Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I CORINTHIANS
Up
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16
Chapter 1
I Co LinVB 1:1  Pólo, aponami apóstolo wa Kristu Yezu na bolingi bwa Nzambe, elongó na ndeko wa bísó Sosténes,
I Co LinVB 1:2  ôná Eklézya ya Nzambe ezali na Korínti losáko. bínó bato ba yě ba lisa­ngá na Krístu ; bobyá­ngémí mpô ’te bózala basántu, elongó na bato bánso bakobóndelaka bipái bínso nkómbó ya Yézu Krístu, Mokonzi wa bangó mpé Mokonzi wa bísó :
I Co LinVB 1:3  ngrásya na bino mpé bobóto bowuti na Nzámbe Tatá wa bísó mpé na Mokonzi Yézu Krístu !
I Co LinVB 1:4  Mbala na mbala nakotóndoko Nzámbe, mpô akabélí bínó ngrásya ya yě o Krístu Yézu :
I Co LinVB 1:5  zambi na Krístu bokómí kotónda na makabo mánso ma koloba mpé ma koyéba,
I Co LinVB 1:6  lokola Nsango ya Krístu tosangélákí bínó eléndí sôló o mitéma mya bínó.
I Co LinVB 1:7  Yangó wâná bozángí likabo lyǒ kó té, bínó bato bozalí kozila Bomímónisi bwa Mokonzi wa bísó Yézu Krístu.
I Co LinVB 1:8  Yě moto mpé akoléndisa bínó téé nsúka, bózwama na mabé mǒkó té o Mokolo Mokonzi wa bísó Yézu Krístu akoyâ.
I Co LinVB 1:9  Nzámbe akokokisaka mánso akání kosála, yě moto abyángí bínó bózala lisangá na Mwána wa yě, Mokonzi wa bísó Yézu Krístu.
I Co LinVB 1:10  Bandeko, nabóndélí bínó o nkómbó ya Mokonzi wa bísó Yézu Krístu bánso bóloba monoko sé mǒ­kó, bókabwana té, o makambo mánso bózala motéma mǒkó mpé likanisi liokó.
I Co LinVB 1:11  Bato ba Klówe bayébísí ngáí ’te bokómí kokabwana.
I Co LinVB 1:12  Nalingí koloba ’te moto na moto akómí koloba na loléngé la yě : « Ngáí nazalí moto wa Pólo » tǒ « Ngáí moto wa Apóllos », tǒ « Ngáí moto wa Pétro », tǒ « Ngáí moto wa Krístu ».
I Co LinVB 1:13  Krístu akabwání ndé ndámbo ndámbo ? Ndé Pólo akúfákí o kurúse mpô ya bínó ? Bokúlákí ndé batísimo o nkómbó ya Pólo ?
I Co LinVB 1:14  Natóndí Nzámbe, mpô nabátísákí atâ mǒkó wa bínó té, tíká sé Kríspo na Káyo.
I Co LinVB 1:15  Bô­ngó moto mǒkó áloba té ’te akúlí batísimo o nkómbó ya ngáí.
I Co LinVB 1:16  Sôló, nabátísákí mpé bato ba libótá lya Stéfanas, kasi nayébí té sókó nabátísákí naíno moto mosúsu.
I Co LinVB 1:17  Zambi Krístu atíndí ngáí té mpô ya kobátisa bato, kasi mpô ya kosangela Nsango Elámu : kasi sókó nasangélí yangó na bwányá bwa bato, kurúse ya Krístu ekómí kozánga ntína.
I Co LinVB 1:18  Mpo na bazalí kobúngama nsango ya kurúse ezalí likambo lya bozóba, kasi mpo na bísó bato toko­bíka ezalí ngúyá ya Nzámbe.
I Co LinVB 1:19  Ekomámí mpé bôngó o Minkandá : Nako­súkisa bwányá bwa bato ba bwányá, mpé nakoboma mayéle ma bato ba mayéle.
I Co LinVB 1:20  Moto wa bwányá akómí wápi ? Wápi moto ayékólá míngi ? Wápi moto ayébí makambo mánso ma mokili moye ? Nzámbe akómísí bwányá bwa bato bozóba té ?
I Co LinVB 1:21  na bwányá bwa bangó bato bayébákí Nzámbe o bikelá bya yě bya bwányá té, yangó wâná Nzámbe akání kobíkisa baye bakoyamba na nsango eye emónóní lokóla bozóba o míso ma bato.
I Co LinVB 1:22  Ba-Yúda balingí komóno makamwísi, ba-Gréki bakolukaka bwányá,
I Co LinVB 1:23  nzókandé bísó tozalí kosakola Krístu óyo awéí o kurúse : o míso ma ba-Yúda ezalí esímbisi, o míso ma bapagáno ezalí likambo lya bozóba.
I Co LinVB 1:24  Kasi bato baye Nzámbe abyángí, ba-Yúda ná ba-Gréki, azali Krístu, ngúyá mpé bwányá bwa Nzámbe.
I Co LinVB 1:25  Sôló, maye mamónóní lokóla mambí ma bozóba bwa Nzámbe, malekí na bwányá maye ma mayéle ma bato ; maye mamónóní lokóla mambí ma botaú bwa Nzámbe, malekí na ngúyá maye ma bokási bwa bato.
I Co LinVB 1:26  táláni bóníbóní Nzámbe abyángí bínó : baye bazalí na bwányá o míso ma báníngá bazalí míngi té o káti ya bínó ; baye bazalí na bokonzi tǒ na lokúmu bazalí mpé míngi té.
I Co LinVB 1:27  Kasi Nzámbe aponí mambí ma bozóba ma mokili mpô ya koyókisa bato ba bwányá nsóni ; mpé aponí mambí mazángí bokási mpô ya koyókisa bato bazalí makási nsóni.
I Co LinVB 1:28  Nzámbe aponí baye babótámí bato baké mpé bazángí lokúmu o míso ma bato basúsu ; bato baye bazalí lokóla babótámá té, Nzámbe aponí bangó mpô ya kobótolo bomoi bwa baye bazalí o mokili,
I Co LinVB 1:29  mpô ’te moto mǒkó té ámíkúmisa o míso ma Nzámbe.
I Co LinVB 1:30  Mpô ya Ye Krístu Yézu : yě azalí bwányá bwa bísó boútí na Nzámbe, tokomi bosémbo, bosántu mpé libíkí.
I Co LinVB 1:31  Yangó wâná, lokóla ekomámí o Minkandá Misántu : Oyo alingí komíkúmisa, ámíkúmisa sé mpô ya Mokonzi.
Chapter 2
I Co LinVB 2:1  Ngai moko, ntángo nayákí epái ya bínó kosangela bínó mobó­mbamo mwa Nzámbe, namílakísí té lokóla moto ayébí kosakola malámu tǒ lokóla moto wa bwanyá.
I Co LinVB 2:2  Nakánákí koyébisa bínó bobélé mambí ma Yézu Krístu, óyo babákákí o kurúse.
I Co LinVB 2:3  Bôngó nakómákí epái ya bínó lokóla moto motaú, nazalákí kobánga mpé kolénge.
I Co LinVB 2:4  Nazalákí koloba mpé kotéya bínó na bwányá bwa bato té, kasi nalakísákí bínó mambí ma ngúyá ya Elímo,
I Co LinVB 2:5  mpô ’te bóyamba na bwányá bwa bato té, kasi na ngúyá ya Nzámbe.
I Co LinVB 2:6  Nzókandé tokolobaka maloba ma bwányá na bato bakómí bakóló o mambí ma eyamba. Kasi tokolobaka na bwányá bwa bato ba nsé eye té tǒ bwa baye bakoyángelaka mokili, baye basengélí kokúfa.
I Co LinVB 2:7  Tokosakolaka bwányá bwa Nzámbe boyébání té, bobómbámí ; út’o bileko na bileko Nzámbe akánáká kolakisa bísó bwányá bôná, mpô ya lokúmu la bísó.
I Co LinVB 2:8  Mokonzi mǒkó té ayébákí bwányá bôná : sókó ba­yébákí bwangó, mbele nde babákákí Mokonzi wa nkémbo o kurúse té.
I Co LinVB 2:9  Kasi, engébéné na maloba ma Minkandá Misántu, tozalí kosangela mambí moto mǒkó amóní na míso té, maye moto mǒkó ayókí na matói té, maye moto mǒkó akanísí o motéma té, mazalí mambi maye Nzámbe alé­ngélélí bato baye bakolingaka yě.
I Co LinVB 2:10  Kasi Nzámbe ayébísí bísó mangó na lisálisi lya Elímo, zambí Elímo ayébí mánso, atâ maye mabó­mbámí o motéma mwa Nzámbe.
I Co LinVB 2:11  Náni ayébí makanisi ma moto, ezalí bobélé elímo ya moto ônáméí té ? Sé bôngó, bobélé Elímo wa Nzámbe ayébí makambo ma Nzámbe.
I Co LinVB 2:12  Nzókandé bísó tozwákí elímo eútí na mokili té ; tozwákí Elímo wa Nzámbe, mpô tóyéba maye mánso Nzá­mbe akabélákí bísó.
I Co LinVB 2:13  Tokosakolaka makabo maye na maloba ma bwányá bwa bato té, kasi na maloba maye Elímo alakísí bísó ; bobélé bôngó tokokí koli­mbola mambí ma elímo na maloba ma elímo.
I Co LinVB 2:14  Moto azángí Elímo, akokí koyamba mambí ma Elímo wa Nzámbe té ; o míso ma yě mazalí mambí ma bozóba ; akokí mpé koyéba mangó té, zambi akokí koyéba mambí ma Elímo sé na lisálisi lya Elímo.
I Co LinVB 2:15  Nzókandé moto azalí na Elímo akokí koyéba mambí mánso ; kasi atâ moto mǒkó té akokí koyéba ndéngé moto ôná azalí.
I Co LinVB 2:16  Ya sôló, náni moto ayébí makanisi ma Nzámbe ? Náni akokí kopésa yě malako ? Nzókandé bísó toyébí makanisi ma Krístu.
Chapter 3
I Co LinVB 3:1  Ngai mpé bandeko, nakokákí koloba na bínó té lokóla na bato bazalí na Elímo, kasi lokóla na bato ba nsé, lokóla bána baké baye bakólí naíno o Krístu té.
I Co LinVB 3:2  Yangó wâná naléísákí bínó na mabéle, na biléi bya ngúyá té ; o ntángo êná bokokákí na byangó naíno té. Atâ sikáwa bokokí na byangó naíno té,
I Co LinVB 3:3  mpô bozalí kosála sé lokóla bato ba nsé. Zambi, bozalí koyókelana zúwa mpé kowélana ntembe, bokosálaka lokóla bato ba nsé té ? Ezalela ya bínó ekokání na eye ya bato bánso té ?
I Co LinVB 3:4  Sókó mǒkó wa bínó alobí « Ngáí nazalí moto wa Pólo », mpé mosúsu alobí « Ngáí nazalí moto wa Apólos », bozalí kosála lokóla bato ba nsé té ?
I Co LinVB 3:5  Apólos azalí ndé náni ? Pólo yě ndé náni ? Bobélé basáleli : lokóla Nzámbe akabélí mǒkó mǒkó wa bísó, tosálísí bínó mpô ’te bókóma na boyambi.
I Co LinVB 3:6  Ngáí nalóní mbóto, Apólos anyakélí yangó mái, kasi Nzámbe ye moto akólísí yangó.
I Co LinVB 3:7  Yangó wâná ná moto alóní ná moto anyakélí yangó mái bazalí na ntína mpenzá té, kasi bobélé Nzámbe óyo akólísí yangó.
I Co LinVB 3:8  Ná molóni ná moto anyakélí mái, bazalí sé moto mǒkó, kasi moto na moto akozwa lifúta engébéné na mosálá mwa yě.
I Co LinVB 3:9  Bísó tozalí basáleli ba Nzámbe, bínó bozalí elanga ya Nzámbe, lokóla ndáko yě atóngí.
I Co LinVB 3:10  Engébéné na ngrásya Nzámbe akabélí ngáí, natíákí mabángá ma nsé, lokóla moto ayébí mosálá mwa botóngi malámu ; moto mosúsu akóbí kotónga o mabángá maye. Kasi moto na moto ákéba na ndéngé azalí kotónga.
I Co LinVB 3:11  Moto mǒkó akokí kotía mabángá ma nsé té ; mabángá ma nsé masílí matíámí, mangó ndé Yézu Krístu.
I Co LinVB 3:12  Bákóba kotónga o mabángá mâná na wólo, na paláta, na mabángá ma motúya, na mabáyá, na matíti tǒ na nsesé,
I Co LinVB 3:13  mosálá mwa mǒkó mǒkó mokomónono mokolo mosúsu ; sôló, mokomónono o Mokolo monéne. Mokolo môná móto mokopela mpé mokomeka mosálá mwa moto mǒkó mǒkó.
I Co LinVB 3:14  Sókó mosálá mwa moto óyo atóngákí mokúfí té, moto ôná akozwa lifúta lya yě.
I Co LinVB 3:15  Kasi sókó mosálá mwa yě mozíkí, akozwa elóko té ; nzókandé yě mǒkó akobíka lokóla moto abíkí o likáma lya móto.
I Co LinVB 3:16  Boyébí té ’te bozalí étumbelo ya Nzámbe, mpé Elímo wa Nzámbe akofándaka o mitéma mya bínó ?
I Co LinVB 3:17  Sókó moto abomí témpelo ya Nzámbe, Nzámbe moto akoboma yě, zambí témpelo ya Nzámbe ezalí esántu, mpé bínó bozalí témpelo eye !
I Co LinVB 3:18  Moto mǒkó ámíkósa té : sókó moto akanísí ’te azalí na mayéle ma mokili moye, asengélí kokóma zóba o makambo ma mokili mpô ’te ázwa bwányá bwa sôló.
I Co LinVB 3:19  Mayéle ma nsé eye mazalí bozóba o míso ma Nzámbe. Ekomámí sé bôngó : Akosúkisa bato ba bwányá na mayéle ma bangó mǒkó.
I Co LinVB 3:20  Ekomámí mpé ’te : Mokonzi ayébí ’te makanisi ma bato ba bwányá mazalí sé mpámba.
I Co LinVB 3:21  Bôngó moto mǒkó té áluka lokúmu epái ya bato, zambí bínso bizalí bya bínó :
I Co LinVB 3:22  ézala Pólo, ézala Apólos, ézala Pétro, ézala mokili, ézala bomoi, ézala liwá, ézala mambí ma leló tǒ maye makoyâ, bínso bizalí bya bínó.
I Co LinVB 3:23  Kasi bínó bozalí bato ba Krístu mpé Krístu azalí moto wa Nzámbe.
Chapter 4
I Co LinVB 4:1  Yango wana bato bátála bísó sé lokóla basáleli ba Krístu mpé bakapíta bakolakisaka mibómbamo mya Nzámbe.
I Co LinVB 4:2  Bakoséngeke na bakapíta bobélé ’te básála mosálá na bosémbo.
I Co LinVB 4:3  Bôngó sókó bato basúsu tǒ bínó bosámbísí ngáí, nakotála yangó sé mpámba. Atâ ngáí nakokáta likambo lya ngáí mǒkó té.
I Co LinVB 4:4  Na motéma mwa ngáí nazalí komóno ’te nasálí likambo lya mabé té. Kasi, atâ bôngó, nalobí té ’te nalóngí. Moto akosámbisa ngáí ndé Mokonzi.
I Co LinVB 4:5  Bôngó bósámbisa lisúsu mpá­mba mpámba té libosó ’te Mokonzi áyâ. Yě moto akobimisa maye mabómbámí o molílí, mpé akomónisa maye mazalí o mitéma mya bato. O ntángo êná moto na moto akozwa lokúmu lokokí na yě epái ya Nzámbe.
I Co LinVB 4:6  Bandeko, sókó natángélí bínó ndakisa ya ngai na Apóllos, ezalí bobélé mpô ya bínó, mpô bóyéba ’te « Bólanda sé makambo maye makomámí ». Bôngó bókóma na loléndo té na bolóngisi motéyi mǒkó tǒ na bokínoli motéyi mosúsu.
I Co LinVB 4:7  Náni moto akolingisa yǒ ósála bôngó ? Náni moto azalí na elóko eye bakabélí yě té ? Bôngó sókó ozwí yangó mpámba, mpô níni ozali kosala loléndo lokóla bakabélí yǒ yangó té ?
I Co LinVB 4:8  Sôló, bokosálaka lokóla bosílí botóndí, lokóla bokómí na nkita ! Bosengélákí na bísó té mpô ’te bókóma bakonzi ! Malámu sókó ezalákí bôngó ’te bokómí bakonzi, mpô tókoka kokabolana bokonzi bôná.
I Co LinVB 4:9  Nzókandé namóní ’te Nzambe atíí bísó bapóstolo o molongó mwa nsúka, lokóla baye bakokí na etúmbu ya liwá. Tokómí lokóla lisano likokí kosepelisa mokili mobi­mba, bǎnzelú na bato.
I Co LinVB 4:10  Bísó tozalí bazóba mpô ya Krístu, kasi bínó bokanísí ’te bozalí na bwányá bwa Krístu. Bísó tozalí bato bataú, kasi bínó bokanísí ’te bozalí makási ; bato bakokúmisaka bínó, kasi bísó tozángí lokúmu.
I Co LinVB 4:11  Téé sikáwa tokoyókaka nzala mpé mpósá ya komele, tozángí bilambá mpé bakobéteke bísó, tokotelenganaka bipái na bipái ;
I Co LinVB 4:12  tokomíyókisaka mpási na mosálá mwa mabóko ma biso moko. Baye bakofíngaka bísó, tokobenisaka bangó ; ntángo bakonyókoloko bísó, tokokangaka mitéma ;
I Co LinVB 4:13  baye bakotó­ngoko bísó, tokozó­ngiselaka bangó maloba ma bo­bóto. Téé sikáwa bakotálaka bísó lokóla bosoto bwa mokili, lokóla baye babóyámí bipái bínso.
I Co LinVB 4:14  Na maloba maye nalingí koyókisa bínó nsóni té, nalingí sé kokébisa bínó lokóla bána ba ngáí ba bolingo.
I Co LinVB 4:15  Atâ bozalákí na batéyi nkóto zómi bakotéyaka bínó o nkómbó ya Krístu, bozalí sé na tatá mǒkó ; ngáí moto nasangélí bínó Nsango Elámu mpé nabótí bínó o Krístu Yézu.
I Co LinVB 4:16  Bôngó nabóndélí bínó : bómekola ndakisa ya ngáí.
I Co LinVB 4:17  Yangó wâná natíndélí bínó Timotéo, mwána wa ngáí wa bolingo, moto ayambí Mokonzi na motéma mǒkó. Yě moto akokundolela bínó matéya ma Krístu maye natéyákí bínó, lokóla nakotéyaka mangó o Biklézya bínso.
I Co LinVB 4:18  Bato basúsu o káti ya bínó bakómí na loléndo, mpô bakanísí ’te nakoyâ epái ya bínó té.
I Co LinVB 4:19  Kasi, sókó Mokonzi alingí, nakoyâ nokí epái ya bínó, bôngó nakotála maloba ma bangó ma loléndo té, kasi nakotála maye bazalí kosála.
I Co LinVB 4:20  Bokonzi bwa Nzámbe bozalí likambo lya maloba té, kasi lya misálá.
I Co LinVB 4:21  Bôngó bolingí níni ? Náyâ epái ya bínó na fímbo, tǒ náyâ na bolingi mpé na motéma bobóto ?
Chapter 5
I Co LinVB 5:1  Tozalí koyóka ’te makambo ma bosóni makómí míngi o káti ya bínó, bosóni mpenzá lokóla atâ bapagáno bakosálaka té : moto mǒkó akómí kofánda na mwásí wa tatá wa yě.
I Co LinVB 5:2  Bôngó bovímbí na loléndo ? Ebongókí ’te bóyóka mawa, mpé bólongola o káti ya bínó moto asálí likambo lyangó.
I Co LinVB 5:3  Sôló, na nzoto nazalí mosíká na bínó, nzókandé na motéma nazalí pene na bínó ; lokóla moto azalí epái ya bínó, ngáí nasílí nakátí likambo lya moto asálí bôngó.
I Co LinVB 5:4  Esengélí ’te o nkómbó ya Mokonzi Yézu, bísó na bínó motéma mǒkó na ngúyá ya Mokonzi Yézu,
I Co LinVB 5:5  tókaba moto ôná o mabóko ma Sátana mpô ’te nzóto ya yě ézw­a etúmbu, bôngó molímo mwa yě móbíka mokolo Mokonzi ako­yâ.
I Co LinVB 5:6  Bokokí komíkúmisa atâ moké té ! Boyébí té ’te mwâ nkísi ya mámpa ekotutwisaka sǎni mobimba ya potopóto ya mámpa ?
I Co LinVB 5:7  Bólongola o káti ya bínó nkísi ya mámpa ya kala mpô ’te bózala lokóla mámpa ma sika : bosengélí kozala mámpa mazángí nkísi, zambí basílí babomí Mpatá ya Pásiká ya bísó, Krístu.
I Co LinVB 5:8  Bôngó, tósepela eyenga ya bísó na mámpa ma kala té, na mámpa ma mayéle mabé tǒ ma masúmu té, kasi na mámpa mazángí nkísi, ma bopéto mpé ma bosôló.
I Co LinVB 5:9  Nakomélákí bínó o monkandá mosúsu ’te bokokí kozala na bondeko na bato ba bosóni té.
I Co LinVB 5:10  Nalobákí bôngó té mpô ya bato bánso ba nsé ; bakosálaka bosóni, bazalí na lokósó la mbóngo, bakoyíbaka tǒ bakokúmisaka bikeko. Sókó ezalákí bôngó, mbele bosengélákí kolongwa o mokili.
I Co LinVB 5:11  Nakomélákí bínó ndé boye : Bokokí kosangana té na ndeko óyo akomítángaka mokrístu, nzókandé akosálaka mambí ma bosóni, azalí na lokósó la mbó­ngo, akosámbelaka bikeko, akofí­ngaka bato, akolángwaka masanga tǒ azalí moyíbi : bokokí kolía na yě esíká yǒ kó té.
I Co LinVB 5:12  Nakokí nasámbisa bapagáno ? Bínó bokokí kosámbisa bato ba bínó moko té ?
I Co LinVB 5:13  Sôló, bobélé Nzámbe akosámbisa bapagáno, kasi bínó bólongola moto mabé o káti ya bínó.
Chapter 6
I Co LinVB 6:1  Sókó moto mǒkó o káti ya bínó azwí likambo na móníngá, ndéngé níni akobánga té kokende kosámba epái ya bapagáno ? Mpô níni akokende epái ya basántu té ?
I Co LinVB 6:2  Boyébí té ’te basántu bakosámbisa bato ba mokili mobimba ? Bôngó, sókó bínó bokosámbisa bato ba mokili, bokokí kokáta makambo ma mpámba té ?
I Co LinVB 6:3  Boyébí té ’te bísó bato tokokáta likambo lya bǎnzelú ? Yangó wâná bokokí kokáta makambo ma bato ba nsé eye !
I Co LinVB 6:4  Nzókandé, sókó bozalí na likambo lya motíndo moye, bokokendeke kosámba libosó lya bazúzi baye bato ba Eklézya bakokínolaka !
I Co LinVB 6:5  Nalobí yangó mpô ya koyókisa bínó nsóni ! Sôló, o káti ya bínó moto mǒkó wa mayéle azalí té, óyo akokí kosámbisa bandeko ba yě bakrístu ?
I Co LinVB 6:6  Kasi bínó na bínó bandeko bakrístu bokofúndanaka o esámbi ya bapagáno !
I Co LinVB 6:7  Kofúndana bôngó ezalí likambo lya mawa míngi. Mpô níni bokokí kokanga mitéma té sókó bayókísí bínó mpási ? Sókó bato balingí kobótolo bínó elóko, mpô níni botíkélí bangó yangó té ?
I Co LinVB 6:8  Kasi bínó mǒkó bokosálaka mabé, bokobótoloko bilóko bya bato baye bazalí bandeko ba bínó !
I Co LinVB 6:9  Bôngó boyébí té ’te bato bazá­ngí bosémbo bakoyíngela o Bokonzi bwa Nzámbe té ? Bómíkósa té ! Bato bakosálaka bosóni, bato bakosámbelaka bikeko, bato ba bokáli, bato ba ezalela ebé, babáli baye bakosálaka bosóni na babáli,
I Co LinVB 6:10  bayíbi, bato ba lokósó la mbóngo, baye bakolángwaka masanga, baye bakofíngaka mpé bakobótoloko bato basúsu bilóko, bakoyíngela o Bokonzi bwa Nzámbe té.
I Co LinVB 6:11  Sôló, basúsu o káti ya bínó bazalákí kosála yangó, kasi sikáwa bosukwámí na mái, basántísí bínó ; bo­zwí libíkí o nkómbó ya Mokonzi Yézu Krístu mpé na Elímo wa Nzámbe wa bísó.
I Co LinVB 6:12  Basúsu bakolobaka : « Nakokí kosála mánso nalingí kosála ». Sôló, kasi mánso mazalí na litómba té. « Nakokí kosála mánso nalingí kosála », kasi nalingí kozala moómbo wa elóko té.
I Co LinVB 6:13  Biléi bizalí mpô ya libumu, mpé libumu likokí na biléi, nzókandé Nzámbe akoboma ná biléi mpé ná libumu. Nzóto ekelámí té mpô ya kosála ekóbo ; nzóto ezalí ya Mokonzi ; yě Mokonzi azalí nkóló wa yangó.
I Co LinVB 6:14  Nzámbe óyo asékwísákí Yézu, akosékwisa mpé bísó na ngúyá ya yě.
I Co LinVB 6:15  Boyébí té ’te nzóto ya bínó izalí binama bya Nzóto ya Krístu ? Bôngó nákamata binama bizalí bya Krístu mpé nákomisa byangó binama bya ekobo ? Sókí moké té !
I Co LinVB 6:16  Boyébí mpé té ’te moto asangání na mwásí ndúmbá akómí na yě nzóto yǒkó ? Ekomámí bôngó o Minkandá : Bangó bábalé bakokóma nzóto sé yǒ kó.
I Co LinVB 6:17  Kasi moto asangání na Mokonzi akómí na yě elímo sé yǒ­kó.
I Co LinVB 6:18  Bókíma mambí ma ekóbo ! Masúmu masúsu mánso moto akokí kosála matálí nzóto ya yě té, kasi moto asálí ekóbo abébísí nzóto ya yě mǒkó.
I Co LinVB 6:19  Boyébí té ’te nzóto ya bínó izalí témpelo ya Elímo Sántu, óyo akofándaka o mitéma mya bínó, mpé óyo Nzámbe apésí bínó. Bínó bozalí bankóló ba nzóto ya bínó té.
I Co LinVB 6:20  Zambi basómbí bínó kosómba na motúya monéne ! Bôngó bókúmisa Nzámbe o nzóto ya bínó.
Chapter 7
I Co LinVB 7:1  Na makambo oyó bokomélákí ngáí : « Malámu mobáli ázála na mwásí té. »
I Co LinVB 7:2  Sôló, kasi mpô ya mambí ma bosóni malekí míngi, malámu ’te mobáli mǒkó mǒkó ázala na mwásí wa yě, mpé mwásí mǒ­kó mǒ­kó ázala na mobáli wa yě.
I Co LinVB 7:3  Mobáli ákokisa lotómo la yě ôná mwásí wa yě, mwásí mpé ákokisa lotómo la yě ôná mobáli wa yě.
I Co LinVB 7:4  Mwásí azalí nkóló wa nzóto ya yě mǒkó té, mobáli azalí nkóló wa yangó ; sé bôngó mobáli azalí nkóló wa nzóto ya yě mǒkó té, kasi mwásí wa yě azali nkóló wa yangó.
I Co LinVB 7:5  Bópímana nzóto té ; kasi sókó boyókání bínó bábalé ’te bokomípésa mwâ mikolo na losámbo, likambo té. Na nsima bósangana lisúsu, sókí té Sátana, óyo ayébí botaú bwa bínó, akozwa nzelá ya kosénginya bínó.
I Co LinVB 7:6  Nayébísí yangó lokóla mobéko té, sé lokóla lilako.
I Co LinVB 7:7  Nalingí ’te bato bánso bázala lokóla ngáí ; kasi Nzámbe akokabelaka moto na moto likabo lya yě ; mǒkó azwí likabo liye, mosúsu likabo lisúsu.
I Co LinVB 7:8  Kasi nayébísí banzemba na básí bazéngé : malámu bátíkala lokóla ngáí.
I Co LinVB 7:9  Kasi sókó bakokí kokanga mitéma té, malámu bábála, zambí : kobála tǒ kozíka na mpósá, kobála elekí malámu.
I Co LinVB 7:10  Tálá mobéko napésí baye baló-ngání : Mwásí akokí kokabwana na mobáli wa yě té. Mokonzi moto atíndí bôngó, ngáí té.
I Co LinVB 7:11  Sókó aka­bwání na mobáli wa yě, átíkala monzemba tǒ áyókana na yě lisúsu. Mobáli mpé akokí kobóya mwásí wa yě té.
I Co LinVB 7:12  Na bato basúsu ngáí mǒkó nalobí, ezalí Mokonzi té : sókó ndeko mǒ­kó azalí na mwásí mopagáno óyo alingí kofánda na yě, mobáli átika yě té.
I Co LinVB 7:13  Sókó mwásí azalí na mobáli mopagáno óyo alingí kofánda na yě, mwásí átika yě té.
I Co LinVB 7:14  Mobáli mopagáno akómí moto wa Nzámbe mpô ya mwásí wa yě mokrístu, mpé mwásí mopagáno akómí moto wa Nzámbe mpô ya mobáli wa yě mokrístu. Sókó ezalákí bôngó té, mbele bána ba bínó bazalákí péto té ; nzókandé bazalí bána ba Nzámbe !
I Co LinVB 7:15  Mopagáno, sókó alingí kolo­ngwa o libála, álo­ngwa. Awa ndeko mobáli tǒ mwásí óyo atíkálí, akangémí na libála lisúsu té : Nzámbe abyángí bínó bófánda na bobóto.
I Co LinVB 7:16  Yǒ mwásí, oyébí sókó okobíkisa mobáli wa yǒ ? Yǒ mobáli, oyébí sókó okobíkisa mwásí wa yǒ ?
I Co LinVB 7:17  O makambo masúsu, moto na moto átíkala lokóla azalákí o ntángo Nzámbe abyángákí yě. Nakopésaka bato ba Biklézya bínso mobéko moye.
I Co LinVB 7:18  Moto óyo basílí bakátí yě nzóto o ntángo Nzámbe abyángákí yě, átíkala sé bôngó. Sokó bakátí yě nzóto té o ntángo Nzámbe abyángákí yě, ákátisa nzóto té.
I Co LinVB 7:19  Kokáta nzóto tǒ kokátisa té, ezalí likambo lya mpámba ; kotósa mitíndo mya Nzámbe, yangó ndé mamá wa likambo.
I Co LinVB 7:20  Moto na moto átíkala sé lokóla azalákí o ntángo Nzámbe abyángákí yě.
I Co LinVB 7:21  Sókó ozalákí moómbo o ntángo Nzámbe abyángákí yǒ, ómítungisa té ; kasi sókó ekokí kosálema, meká kozwa bonsómí.
I Co LinVB 7:22  Mpô moto azalí moó-mbo o ntángo Nzámbe abyángí yě, akómí moto wa bonsómí, mpô azalí moto wa Krístu. Sé bôngó, moto azalí nsómí o ntángo Nzámbe abyá­ngí yě, azalí moómbo wa Krístu.
I Co LinVB 7:23  Basómbí bínó kosómba na motúya monéne ; bómíkómisa baó­mbo ba bato té.
I Co LinVB 7:24  Bandeko, moto nyónso átíkala o míso ma Nzámbe lokóla azalákí o ntángo babyángákí yě.
I Co LinVB 7:25  Na baye batíkálí bango­ndo nazali na mobéko mwa Mokonzi té ; kasi nakoyébisa makanisi ma ngáí, ngáí moto óyo Mokonzi ayókélí ngolu ; yangó wâná bokokí kondima mangó.
I Co LinVB 7:26  Nakanísí ’te elekí malámu moto átíkala lokóla azalí, mpô ya mpási tozalí na yangó.
I Co LinVB 7:27  Sókó osílí obálí mwásí, óluka kokabwana na yě té ; sókó obálí naíno té, óluka mwásí té.
I Co LinVB 7:28  Nzókandé sókó obálí, osálí lisúmu té ; sókó ele­ngé mwásí alóngání, asálí mpé lisúmu té. Kasi bato ba libála bakozwa matungisi, mpé ngáí nalingí bázwa mangó té.
I Co LinVB 7:29  Bandeko, nayébísí bínó : Mikolo mizalí koleka sé koleka. Bandá sikáwa baye bazalí na mwásí bázala lokóla bazalákí na mwásí té ;
I Co LinVB 7:30  baye bazalí kolela, bázala lokóla bato balelí té ; baye bazalí koyóka esengo, bázala lokóla bato bayókí esengo té ; baye basómbí bilóko, bázala lokóla bato bazángí bilóko ;
I Co LinVB 7:31  baye bakosálaka mosálá na bilóko bya mokili, bátía mitéma na byangó té, zambí makambo ma mokili mazalí sé koleka.
I Co LinVB 7:32  Nalingí té ’te bózala na matu­ngisi. Moto alóngání té akokanisa sé mambí ma Mokonzi, akoluka bóníbóní akosepelisa yě.
I Co LinVB 7:33  Kasi moto alóngání akokanisa mambí ma mokili mpé bóníbóní akosepelisa mwásí wa yě ;
I Co LinVB 7:34  motéma mwa yě mokabwání. Sé bôngó mwásí mo­nzemba ná elengé mwásí bakokanisaka mambí ma Mokonzi mpô ’te básántisa nzóto mpé molímo mwa bangó. Kasi mwásí alóngání akokanisa mambí ma mokili, mpé akoluka bóníbóní akosepelisa mobáli wa yě.
I Co LinVB 7:35  Nalobí yangó mpô ya bolámu bwa bínó mǒkó ; nalingí kotíela bínó motámbo té. Nalingí kolakisa bí­nó sé nzelá eye elongóbání mpô ’te bómípésa mobimba na Mokonzi.
I Co LinVB 7:36  Sókó elengé mobáli óyo asílí aponí elengé mwásí mpô ábála yě, akanísí ’te akosála yě mabé sókó abálí yě té, mpé mpósá ya libála eyélí yě, malámu bábálana, lokóla yě alingí ; asálí lisúmu té.
I Co LinVB 7:37  Kasi elengé óyo ayókí mpósá ya kobála té, moto mǒkó atíndí yě té, yě mǒ­kó alingí sé bôngó, bôngó akání komemya bongondo bwa elengé mwásí ôná, asálí sé malámu.
I Co LinVB 7:38  Bôngó, sókó elengé mobáli abálí ele­ngé mwásí óyo yě aponí, asálí malámu ; mpé óyo alingí kobála yě té, asálí malámu koleka.
I Co LinVB 7:39  Mwásí wa bolóngani akangémí na mobáli wa yě kín’o liwá lya mobáli. Bôngó sókó mobáli awéí, akokí kobála mobáli óyo yě mǒkó alingí, kasi álóngana bobélé o míso ma Mokonzi.
I Co LinVB 7:40  Kasi nakanísí ’te esengo ya yě ekoleka sókó atíkálí monzemba. Nakanísí ngáí mpé ’te nazalí na Elímo wa Nzámbe.
Chapter 8
I Co LinVB 8:1  Mpô etálí nyama babonzélí bikeko : bísó bánso toyébí níni tosengélí kosála. Kasi mayéle makokómisaka moto na loléndo, bolingi bokotongaka ndako.
I Co LinVB 8:2  Sókó moto akanísí ’te ayébí likambo, ayébí lyangó naíno té lokóla asengélí koyéba.
I Co LinVB 8:3  Kasi sókó moto alingí Nzámbe, Nzámbe akondima yě.
I Co LinVB 8:4  Bôngó, mpô etálí boléi nyama iye babonzélí bikeko, toyébí ’te ekeko ezalí sé elóko mpámba o nsé mobimba. Toyébí mpé ’te Nzámbe azalí sé mǒkó, Nzámbe mosúsu azalí té,
I Co LinVB 8:5  atâ mpé baye bakotángaka banzámbe o likoló tǒ o nsé, bakotángaka bôngó banzámbe na bakonzi míngi.
I Co LinVB 8:6  Kasi bísó tozalí na Nzámbe sé mǒkó, Tatá, óyo akelí bínso mpé apésí bísó bomoi. Tozalí mpé na Mokonzi sé mǒkó, Yézu Krístu : bínso bikelámí mpô ya yě, bísó mpé tozalí na bomoi mpô ya yě.
I Co LinVB 8:7  Kasi bato bánso bazalí na mayéle té. Basúsu, baye bazalákí kokúmisa bikeko mwâ mikolo milekí, mpô ya motéma motaú mwa bangó bakokí kokanisa ’te bakokóma na mbindo sókó bakolía nyama eye babonzélákí bikeko.
I Co LinVB 8:8  Nzókandé bilóko bya kolía bikokí kokómisa bísó penepene na Nzámbe té : sókó toléí byangó té, tokobúngisa elóko té ; mpé sókó toléí byangó, tokozwa mpé elóko té.
I Co LinVB 8:9  Kasi, áwa bokokí kosála lokóla bínó mǒkó bolingí, bókéba ’te bópésa bato ba motéma motaú esímbisi té.
I Co LinVB 8:10  Sôló, sókó moto wa motéma motaú amóní yǒ moto wa mayéle ozalí kolía o témpelo ya bikeko, mbele okondimisa yě ’te akokí kolía nyama babonzélákí bikeko ?
I Co LinVB 8:11  Bôngó, áwa olandí mayéle ma yǒ, oko­kwêisa moto wa motéma motaú ; Krístu akúfákí mpé mpô ya ndeko óyo !
I Co LinVB 8:12  Awa osálí bandeko ba yǒ mabé mpé oyókísí bato ba motéma motaú mpási o motéma, osálí Krístu mpé mabé.
I Co LinVB 8:13  Yangó wâná, sókó bilóko biye nazalí kolía bikopésa ndeko wa ngáí esímbisi, nakolía lisúsu nyama mokolo mǒkó té, mpô ’te nápésa ndeko wa ngáí esímbisi té.
Chapter 9
I Co LinVB 9:1  Ngáí nazalí moto wa bonsómí té ? Ngáí nazalí apóstolo té ? Ngáí namónókí Yézu Mokonzi wa bísó té ? Moto abókólí bínó o nzelá ya Mokonzi, ngáí té ?
I Co LinVB 9:2  Atâ bato basúsu bakanísí ’te nazalí apóstolo té, o míso ma bínó nazalí apóstolo ; zambí, áwa boyambí Mokonzi, bozalí lokóla elembo elakísí ’te nasálí mosálá mwa apóstolo.
I Co LinVB 9:3  Na baye bafúndí ngáí bôngó nakoloba boye :
I Co LinVB 9:5  Bísó tokokí kokende na ndeko mwásí nzelá yǒ kó o mobémbo wa mosala na bino té, lokóla bapóstolo basúsu, bandeko ba Mokonzi mpé Pétro, bakosálaka ?
I Co LinVB 9:6  Tǒ ezalí bobélé bísó na Bárnaba bato tosengélí kosála mosálá mwa mabóko ?
I Co LinVB 9:7  Sodá náni akomífútaka ntángo akeí etumba ? Náni mosáli wa elanga ya víno óyo akolíaka mbuma ya yangó té ? Náni mokéngeli wa ngómbé óyo akomeleke mabéle ma yangó té ?
I Co LinVB 9:8  Nazalí koloba yangó bobélé na maloba ma bato té, o Mobéko mwa Nzámbe ekomámí mpé bôngó té ?
I Co LinVB 9:9  Ya sôló, ekomámí o Mobéko mwa Móze ’te : Okanga monoko mwa ngómbé té ntángo ezalí koníka mbuma ya mámpa. Maloba maye ma Nzámbe matálí sé bolámu bwa ngómbé ?
I Co LinVB 9:10  Tǒ matálí mpé bolámu bwa bísó bato ? Sôló, ekomámí mpô ya bísó ’te : Oyo akobongisaka mabelé ná moto akoníkaka mbuma ya mámpa, bakosálaka mosálá mwa bangó na elíkyá ’te bakozwa litó­mba.
I Co LinVB 9:11  Sókó tolóní o mitéma mya bínó mbóto ya molímo, tokokí kosénge bínó té ’te bósálisa bísó na mwâ bilóko ?
I Co LinVB 9:12  Sókó bato basúsu bakokí kozwa bilóko epái ya bínó, bísó tokokí kozwa byangó té leká bangó ? Nzókandé bísó toséngékí bínó bilóko té. Tokangákí mitéma o makambo mánso, bôngó tótíela bínó libakú té o nzelá ya boyambi Nsango Elámu ya Krístu.
I Co LinVB 9:13  Boyébí té ’te baye bakosálaka mosálá o témpelo bakolíaka bilóko bizwǎmí o témpelo ? Mpé baye bakobonzaka mabonza o altáre, bakozwaka ndámbo ya mabonza té ?
I Co LinVB 9:14  Sé bôngó, Mokonzi atíndí ’te bato bakosangelaka Nsango Elámu bálía mpô ya mosálá môná.
I Co LinVB 9:15  Kasi ngáí nasálákí bôngó té, mpé sókó nakomí yangó ezalí té mpô ’te bósálisa ngáí. Epusí malámu nákúfa… Moto mǒkó té akokí kobótolo ngáí lokúmu la ngáí.
I Co LinVB 9:16  Na bosangeli Nsango Elámu nalingí ko­zwa lokúmu té, mpô nasengélí kosála yangó. Sôló, mawa na ngáí sókó nasangélí Nsango Elámu té !
I Co LinVB 9:17  Sókó ngáí mǒkó naponókí mosálá môná, mbele nakokákí kozwa lifúta ; kasi ezalí bôngó té, ezalí sé mosálá batíndí ngáí.
I Co LinVB 9:18  Bôngó litómba lya ngáí níni ? Litómba lya ngáí sé : kosangela Nsango Elámu mpô ya lifúta té ; eye nakokákí kozwa mpô ya bosangeli Nsango Elámu, nalingí kozwa yangó té.
I Co LinVB 9:19  Atâ nakangémí na moto mǒkó té, namíkómísí mosáleli wa bato bánso mpô ’te bato baíké báyamba Krístu.
I Co LinVB 9:20  Namíkómísí mo-Yúda elo­ngó na ba-Yúda mpô ’te ba-Yúda báyamba maye nakotéyaka. Atâ nasengélí kotósa Mobéko té, namíkómísí moto asengélí kotósa Mobéko sé lokóla baye basengélí kotósa Mobéko, mpô ’te baye basengélí kotósa Mobéko báyamba maye nakotéyaka.
I Co LinVB 9:21  Namíkómísí mǒkó wa baye bayébí Mobéko té, kasi nazali moto azangi Mobeko mwa Nzambe té, Mobeko mwa ngai se Kristu, nasalaka bongo mpô ’te baye bayébí Mobéko té báyamba maye nakotéyaka.
I Co LinVB 9:22  Namíkómísí moto motaú molongó mǒkó na bato bataú, mpô ’te bato bataú báyamba maye nakotéyaka. Namíkabí mobimba na bato bánso, mpô nábíkisa bato basúsu, atâ na mpási níni.
I Co LinVB 9:23  Nakosálaka mâná mánso mpô ya Nsango Elámu, mpô ngáí mpé ná­zwa likabo lya yangó.
I Co LinVB 9:24  Boyébí ’te bato bakomekanaka na mbángu o libándá lya masano, bangó bánso bakopotaka mbángu ; kasi sé moto mǒkó akolónga mpé akozwa mbano ekozwaka moto wa libosó. Bínó mpé bópota mbángu, bôngó bózwa mbano ya moto wa libosó.
I Co LinVB 9:25  Bánso bakomekanaka bôngó, bakomípímaka bilóko míngi mpô ’te bázwa enkoti ya lokúmu eye ekobéba nokí ; kasi bísó tokosálaka bôngó mpô tózwa enkoti ya lokúmu eye ekobéba té.
I Co LinVB 9:26  Ngáí mpé nakopota mbángu, kasi kílíkili té. O lisano lya kobéte makófi, nakobéte makófi mpámba mpámba té.
I Co LinVB 9:27  Nakoyókisaka nzóto ya ngáí mpá­si mpé nakokómisaka yangó lokóla moómbo ; sókí té, nsima ya kotéya bato basúsu, ngáí mǒkó nakokita.
Chapter 10
I Co LinVB 10:1  Bandeko, nalingí ’te bóyéba malámu bóníbóní bankóko ba bísó bánso batámbólákí o nsé ya limpata, bánso bakátísákí mbú.
I Co LinVB 10:2  Bánso bazwákí batísimo ya Móze na limpata mpé na mbú ;
I Co LinVB 10:3  bánso balíákí biléi biya molimó sé motíndo mǒkó,
I Co LinVB 10:4  bánso bamelékí limelí sé lyǒ kó lya molimó, mpô bamelékí lyangó o libángá lya Nzá­mbe, liye litámbólákí na bangó elo­ngó : libángá lyangó, ndé Krístu.
I Co LinVB 10:5  Nzókandé bato baíké o káti ya bangó basepélísákí Nzámbe té, yangó wâná bibembe bya bangó bipanzánákí o elíkí.
I Co LinVB 10:6  Makambo mâná masálémí mpô ’te málakisa bísó ’te tóyóka mpósá ya mambí mabé lokóla bangó té.
I Co LinVB 10:7  Bókúmisa bikeko té lokóla basúsu o káti ya bangó basálákí, sé lokóla ekomámí : Bato bafándí mpô ya kolía mpé komele, na nsima batélémí mpô ya kobína.
I Co LinVB 10:8  Tósála mpé ekóbo té lokóla basúsu o káti ya bangó basá­lákí ; sé o mokolo mǒkó bato nkóto ntúkú íbalé na ísáto bawéí.
I Co LinVB 10:9  Tótúmola Krístu mpé té, lokóla basúsu o káti ya bangó basálákí : nyóka iswí bangó mpé bawéí.
I Co LinVB 10:10  Bósilikela Nzámbe té lokóla basúsu o káti ya bangó basálákí : ǎnzelú mobomi asílísí bangó.
I Co LinVB 10:11  Maye makwêlákí bangó mázala ndakisa o míso ma bísó ; makomámí mpô ya kokébisa bísó bato tokómí o eleko ya nsúka.
I Co LinVB 10:12  Yangó wâná óyo akanísí ’te atélémí, ákéba ’te ákwéya té.
I Co LinVB 10:13  Lisénginyá atâ lyǒ kó té likwêlí bínó liye lilekí bokási bwa bato. Nzámbe azalí lobokó : akoli­ngisa té ’te masénginyá máleka ngú­yá ya bínó, kasi o ntángo ya lisénginyá akolakisa bínó nzelá mpé akoléndisa bínó mpô ’te bólónga.
I Co LinVB 10:14  Yangó wâná, bandeko ba bolingo, bókúmisa bikeko sókí moké té.
I Co LinVB 10:15  Nazalí koloba na bínó lokóla na bato ba mayéle : bókanisa malámu maye nakoyébisa bínó.
I Co LinVB 10:16  Nkéni ya bobenisi mpô ya kotóndo Nzámbe, ntángo tokomeleke yangó, eko­sangisaka bísó na Makilá ma Krístu té ? Límpa tokobúkaka, likokómisaka bísó lisangá na Nzóto ya Krístu té ?
I Co LinVB 10:17  Límpa lizalí sé lyǒ kó, yangó wâná bísó bánso tozalí nzóto sé yǒ kó, zambí bánso tokolíaka límpa liye sé lyǒ kó.
I Co LinVB 10:18  Bótála ndakisa ya ekólo ya Isráel : bato bakolíaká mibómá, bakosanganaka na altáre ya Nzámbe té ?
I Co LinVB 10:19  Nalingí koloba bôngó té ’te nyama babonzélí ekeko ezalí elóko ya sôló, ekeko ya­ngóméí mpé té.
I Co LinVB 10:20  Kasi elóko bapagáno bakobonzaka, bakobonzaka yangó na bazábolo, na Nzámbe té. Nalingí té ’te bósangana na bazábolo.
I Co LinVB 10:21  Bokokí komele nkéni ya Mokonzi esíká yǒ kó na nkéni ya bazábolo té. Bokokí kolía o méza ya Mokonzi mpé o méza ya bazábolo té.
I Co LinVB 10:22  Tǒ, tolingí ndé koyókisa Mokonzi zúwa ? Tolekí yě ndé na bokási ?
I Co LinVB 10:23  Basúsu bakolobaka : « Nakokí kosála mánso nalingí kosála », sôló, kasi mánso makobongela bísó té. « Nakokí kosála mánso nalingí kosála », sôló, kasi mánso makolé­ndisa boyambi té.
I Co LinVB 10:24  Moto mǒkó té áluka bolámu bwa yě mǒ­kó, áluka sé bolámu bwa báníngá.
I Co LinVB 10:25  Bokokí kolía bilóko bínso bakotékeke o zándo ; bómítungisa té sókó bokokí kosála bôngó tǒ té,
I Co LinVB 10:26  mpô mokili ná bilóko bí­nso bizalí wâná bizalí bya Mokonzi.
I Co LinVB 10:27  Sókó moto abyángí bino mpé ondimí kokende kolía epái ya yě, bolíá bilóko bínso akopésa bino, bómítungisa té sókó bokokí kosála bôngó tǒ té.
I Co LinVB 10:28  Kasi sókó moto mǒ­kó alobí na bino : « Eye ezalí nyama babonzélákí bikeko », bólía yangó té. Okanisa óyo akébísí yǒ, mpé ómemya makanisi ma motéma mwa yě.
I Co LinVB 10:29  Nalobí : motéma mwa yǒ té, kasi motéma mwa moto ôná, zambí mpô ya bonsómí bwa ngáí nasengélí kotósa makanisi ma motéma mwa moto mosúsu té.
I Co LinVB 10:30  Sókó naléí elóko mpé natóndí Nzámbe, ntína níni bátóngo ngáí, áwa nató­ndí yě mpô ya elóko eye ?
I Co LinVB 10:31  Atâ bozalí kolía, atâ bozalí komele, atâ bozalí kosála níni, bósála mánso mpô ya kokúmisa Nzámbe.
I Co LinVB 10:32  Bópésa esímbisi té, na ba-Yúda té, na bato ba bikólo bisúsu té, na bakrístu basúsu mpé té.
I Co LinVB 10:33  Bósála lokóla ngáí : nakolukaka kosepelisa bato bánso o makambo mánso, nakolukaka sé bolámu bwa ngáí mǒ­kó té, kasi bwa bato bánso mpô ’te bábíka.
Chapter 11
I Co LinVB 11:1  Bómekola ndakisa ya ngáí lokóla ngáí mǒkó nakomekolaka ndakisa ya Krístu.
I Co LinVB 11:2  Nakúmísí bínó, mpô o makambo mánso bokokanisaka ngáí mpé bokotósaka mibéko natéyákí bínó.
I Co LinVB 11:3  Nzókandé nalingí ’te bóyéba : Krístu azalí mokonzi wa bato bánso ; mobáli azalí mokonzi wa mwásí, mpé Nzámbe azalí mokonzi wa Krístu.
I Co LinVB 11:4  Mobáli nyónso azipí motó ntángo azalí kosámbela tǒ kosakola Liloba lya Nzámbe, ayókísí Krístu, Mokonzi mwa yě, nsóni.
I Co LinVB 11:5  Mwásí nyónso azipí motó té ntángo azalí kosámbela tǒ kosakola Liloba lya Nzámbe, ayókísí Krístu, mokonzi mwa yě, mwangó ndé mobáli wa yě, nsóni ; azalí sé lokóla bakókólí yě motó.
I Co LinVB 11:6  Sókó mwásí alátí litambála té, ákátisa nsúki ! Kasi sókó mwásí ayókí nsóni mpô bakátí yě nsúki tǒ bakókólí yě motó, áláta litambála.
I Co LinVB 11:7  Mobáli asengélí koláta enkoti o motó té, zambí azalí elílí eye ekolakisaka nkémbo ya Nzámbe ; kasi mwásí azalí elílí ya nkémbo ya mobáli.
I Co LinVB 11:8  Ya sôló, mobáli moto akelámí na nzóto ya mwásí té, kasi mwásí akelámí na nzóto ya mobáli ;
I Co LinVB 11:9  mobáli akelámí mpô ya mwásí té, kasi mwásí akelámí mpô ya mobáli.
I Co LinVB 11:10  Yangó wâná mwásí asengélí koláta elembo ya botósi o motó, mpô ya bǎnzelú.
I Co LinVB 11:11  O míso ma Nzámbe ezalí boye : mwásí azalí elóko té sókó mobáli azalí té, mobáli azalí elóko té sókó mwásí azalí té :
I Co LinVB 11:12  lokóla mwásí akelámí na nzóto ya mobáli, mobáli akobótamaka na mwásí, mpé bánso bábalé baútí na Nzámbe.
I Co LinVB 11:13  Bótála bínó mǒkó : Ebongí sôló ’te mwásí ásámbela Nzámbe motó mpámba ?
I Co LinVB 11:14  Motíndo Nzámbe akelí bato molakísí té ’te mobáli azalí na nsúki míngi azalí komíyókisa nsóni ?
I Co LinVB 11:15  Kasi sókó mwásí azalí na nsúki míngi, ekopésaka yě lokúmu, zambí azwí yangó mpô ’te íkémbisa yě.
I Co LinVB 11:16  Sókó moto alingí kotía ntembe na likambo liye, áyéba ’te tomeséní bôngó té, bato ba Eklézya ya Nzámbe mpé té.
I Co LinVB 11:17  Na lilako nalingí kopésa bínó, nakokí kokúmisa bínó té, zambí na loléngé bokosanganaka bokozwa malámu té, bokozwa sé mabé.
I Co LinVB 11:18  Ya libosó : Nayókí ’te ntángo bokosanganaka likita, bokokabwanaka, mpé nakanísí ’te ezali sé bôngó.
I Co LinVB 11:19  Sôló, makambo ma bokabwani makokí kozánga o ntéi ya bínó té, mpô ’te émónono sókó banáni o ntéi ya bínó bazalí bakrístu ba sôló.
I Co LinVB 11:20  Lokóla bokosálaka sikáwa, bokosanganaka té mpô ya kolía Limpáti lya Mokonzi,
I Co LinVB 11:21  mpámba té, moto na moto akamátí biléi bya yě mǒ­kó, bôngó basúsu bazalí koyóka nzala, basúsu bakolángwaka.
I Co LinVB 11:22  Bozángí ndé ndáko esíká bokokí kolía mpé komele ? Tǒ bozalí kokínola Eklézya ya Nzámbe, mpé bolingí koyókisa baye bazangi nsóni ? Náloba na bínó níni ? Nákúmisa bínó ? Na likambo liye nakokí kokúmisa bínó té.
I Co LinVB 11:23  Maye natéyákí bínó, nazwákí mangó epái ya Mokonzi : Mokonzi Yézu, o butú bakabí yě, akamátí límpa,
I Co LinVB 11:24  atóndí Nzámbe, abúkí lyangó mpé alobí : « Eye ezalí Nzóto ya ngáí nakabi mpô ya bínó. Bósálaka sé bôngó mpô ya kokanisa ngáí. »
I Co LinVB 11:25  Sé bôngó, nsima ya limpáti, akamátí nkéni, alobí : « Nkéni eye ezalí ya Bondeko bwa Sika na Makilá ma ngáí ; mbala ínso bokomele yangó, bósálaka bôngó mpô ya kokanisa ngáí. »
I Co LinVB 11:26  Ya sôló, mbala ínso bokolía límpa liye mpé bokomele nkéni eye, bokosakola liwá lya Mokonzi, kín’o mokolo akoyâ.
I Co LinVB 11:27  Yangó wâná, sókó moto aléí límpa liye mpé amelí nkéni ya Mokonzi na motéma molongóbání té, akozwa likambo mpô ya Nzóto na Makilá ma Mokonzi.
I Co LinVB 11:28  Bôngó moto na moto asengélí komítúna libosó ’te álía límpa liye mpé ámele nkéni eye,
I Co LinVB 11:29  zambí moto aléí mpé amelí, aléí mpé amelí etú­mbu ya yě mǒkó ; mpámba té, aléí Nzóto ya Mokonzi na limemyá té.
I Co LinVB 11:30  Yangó wâná o ntéi ya bínó bato baíké bazalí na bokono tǒ nzóto kóló­ngónú té, basúsu mpé bawéí.
I Co LinVB 11:31  Sókó tomitúnákí mitéma malámu, mbele basámbísákí bísó té.
I Co LinVB 11:32  Kasi áwa Mokonzi asámbísí mpé atú­mbólí bísó, asálí bôngó mpô tókita o likambo elongó na bato ba nsé té.
I Co LinVB 11:33  Bôngó, bandeko, ntángo bokosangana mpô ya kolía Limpáti, bózila báníngá.
I Co LinVB 11:34  Sókó moto ayókí nzala, álía o ndáko ya yě ; sókí té, lisangá lya bínó likozwela bínó likambo. Maye matíkálí, nakobongisa mangó ntángo nakoyâ.
Chapter 12
I Co LinVB 12:1  Bandeko, nalingí bóyéba ntína ya maye matálí makabo ma Elímo Sántu.
I Co LinVB 12:2  Boyeba ‘te bozalákí bapagáno, mitéma mya bínó mizalákí kobénda bínó epái ya bikeko biye bikolobaka té.
I Co LinVB 12:3  Yangó wâná nayébísí bínó : Na ngúyá ya Elímo wa Nzámbe moto mǒkó té akokí koloba ’te : « Mabé na Yézu. » Mǒ kó mpé té akokí koloba ’te Yézu, Mokonzi, sókó Elímo Sántu azalí na yě té.
I Co LinVB 12:4  Sôló, makabo mazalí ndéngé na ndéngé, kasi Elímo azalí sé mǒkó.
I Co LinVB 12:5  Nzelá ya kosálela Nzámbe izalí míngi, kasi Mokonzi azalí sé mǒkó.
I Co LinVB 12:6  Misálá mizalí ndéngé na ndéngé, kasi Nzámbe sé mǒkó akopésaka bato bánso ngúyá ya kosála misálá mínso.
I Co LinVB 12:7  Moto na moto akozwa ngúyá ya Elímo Sántu mpô ya bolámu bwa bato bánso.
I Co LinVB 12:8  Na lisálisi lya Elímo mosúsu azwí likabo lya koloba na bwányá ; na lisálisi lya Elímo ônáméí mosúsu azw­í li­kabo lya kolimbola eyamba na mayéle ;
I Co LinVB 12:9  mosúsu azwí libako lya boyambi bonéne, na lisálisi lya Elímo ônáméí ; mosúsu azwí likabo lya ngúyá ya kobíkisa bato ba bokono, sé na lisálisi lya Elímo ônáméí ;
I Co LinVB 12:10  mosúsu azwí ngúyá ya kosála makamwísi, mosúsu ya kosakola Liloba lya Nzá­mbe, mosúsu mayéle ma kososola maye maútí na Elímo ; mosúsu likokí lya koloba nkóta iye yě mǒkó ayébí té, mo­súsu mayéle ma kolimbola yangó.
I Co LinVB 12:11  Kasi Elímo sé mǒkó akosá­laka mâná mánso, mpé akokabolelaka moto na moto makabo ma yě lokóla yě mǒkó alingí.
I Co LinVB 12:12  Zambi lokola nzóto ya moto ezalí sé yǒ kó, atâ ezalí na binama míngi : binama bínso, atâ bizalí míngi, bisangání o nzóto sé yǒ kó. ezalí sé bôngó o Krístu.
I Co LinVB 12:13  Bísó bánso, ba-Yúda, ba-Greki, baó­mbo na bansómí, tokómí nzóto sé yǒ kó o batísimo na ngúyá ya Elímo sé mǒkó, bánso totóndí na Elímo sé mǒkó.
I Co LinVB 12:14  Sé bôngó, nzóto ezalí bobélé na enama yǒ kó té, ezalí na binama míngi.
I Co LinVB 12:15  Atâ lokolo lolobí : « Ngáí nazalí lobóko té, yangó wâná nazalí eténi ya nzóto té », lokolo lozalí sé enama ya nzóto té ?
I Co LinVB 12:16  Atâ litói lilobí : « Ngáí nazalí líso té, yangó wâná nazalí eténi ya nzóto té », litói lizalí sé enama ya nzóto té ?
I Co LinVB 12:17  Sókó nzóto mobimba ezalákí bobélé líso, bóníbóní tokoyóka maloba ? Sókó nzóto mobimba ezalákí bobélé litói, bóníbóní tokoyóka nsolo ?
I Co LinVB 12:18  Nzókandé Nzámbe atíí binama o nzóto, enama yǒ kó yǒ kó o esíká ya yangó lokóla yě mǒkó alingákí.
I Co LinVB 12:19  Sókó nzóto mobimba ezalákí enama sé yǒ kó, wápi nzóto ?
I Co LinVB 12:20  Kasi eza­lí bôngó té : binama bizalí míngi o nzóto sé yǒkó.
I Co LinVB 12:21  Yangó wâná líso likokí koloba na lobóko té ’te : « Na­sengélí na yǒ té » ; motó mpé mokokí koloba na makolo té ’te : « Nasengélí na bínó té. »
I Co LinVB 12:22  Nabakísí : Atâ binama biye bimónóní bitaú bikokí kozánga té.
I Co LinVB 12:23  Binama biye bizángí lokúmu o míso ma bísó, tokopésaka byangó lokúmu lonéne ; binama biye bikoyókisaka moto nsóni, tokopésaka byangó lime­myá linéne.
I Co LinVB 12:24  Binama biye bizalí na lokúmu bisengélí na limemyá lîná té. Nzámbe akelí nzóto boye : binama bizángí lokúmu, apésí byangó lokúmu lonéne,
I Co LinVB 12:25  mpô ’te biténi bíkabwana té, kasi bísálisana na motéma mǒkó.
I Co LinVB 12:26  Sókó enama yǒ kó eyókí mpási, binama bínso bikómí mpé na mpási ; sókó enama yǒ kó ezwí lokúmu, binama bínso bizalí kosepela na yangó elo­ngó.
I Co LinVB 12:27  Bínó bánso bozalí nzóto ya Krístu ; mpé mǒkó mǒkó wa bínó azalí enama ya nzóto eye.
I Co LinVB 12:28  Nzámbe apésí moto mǒkó mǒkó esíká ya yě o Eklézya : libosó bapóstolo, ya míbalé baproféta, ya mísáto batéyi. Nsima ya bangó basúsu bazwí ngúyá ya kosála makamwísi, basúsu ya kobíkisa bato, basúsu ya kosálisa báníngá, basúsu ya koyángela Eklézya tǒ ya koloba nkóta iye bangó mǒkó bayébí té.
I Co LinVB 12:29  Bangó bánso bazalí ndé bapóstolo ? Bánso bazalí ndé baproféta ? Bánso bazalí ndé batéyi ? Bánso bakosálaka ndé makamwísi ?
I Co LinVB 12:30  Bánso bakokí ndé kobíkisa bato ? Bánso bakolobaka ndé nkóta iye bangó mǒkó bayébí té ? Bánso bakolimbolaka ndé nkóta îná ?
I Co LinVB 12:31  Bólukaka na makasi makabo malekí bolámu. Tíká nálakisa bínó nzelá elekí nzelá ínso na bolámu.
Chapter 13
I Co LinVB 13:1  Atâ nayébí koloba nkóta ínso ya bato tǒ ya bǎnzelú, sókó nazángí bolingi, nazalí sé mono­ko-mbonda, ngonga ezalí kobétebéte mpámba.
I Co LinVB 13:2  Atâ nazwí likabo lya kosakola o nkómbó ya Nzá­mbe, atâ nayébí mibómbamo mínso, atâ nayékólá makambo mánso, atâ nazalí na boyambi bokokí kolongola ngómbá mpé kotía yangó esíká esúsu, sókó nazángí bolingi, nazalí elóko té.
I Co LinVB 13:3  Atâ nakabí bilóko bya ngáí bínso, atâ nandimí kokúfa na móto, sókó nazángí bolingi, nakozwa elóko té.
I Co LinVB 13:4  Moto azalí na bolingi ayébí kokanga motéma, akolukaka kosálisa báníngá, akoyókaka zúwa té, akomílakisaka té, akovímbaka na loléndo té ;
I Co LinVB 13:5  makambo ma yě mánso mabongí nyé, akolukaka bolámu bwa yě mǒkó té, akosilikaka té, akobómbelaka bato nkándá té ;
I Co LinVB 13:6  akosepelaka té na makambo mazángí bosémbo, akoyókaka sé esengo na mambí ma bosôló.
I Co LinVB 13:7  Moto azalí na bolingi akolímbisaka mabé mánso, akoyambaka mánso, akolí-kyaka mánso, mpé akokangaka mo­téma o makambo mánso.
I Co LinVB 13:8  Bolingi bozalí na nsúka té. Mosálá mwa kosakola lokóla proféta mokosíla. Bolobi nkóta bokosíla. Mayéle ma bato makosíla,
I Co LinVB 13:9  zambí boyébi bwa bato bozalí mobimba té, bosakoli lokóla proféta mpé té.
I Co LinVB 13:10  Mokolo mánso makobongo nyé, maye mazalí sé ndámbo ndámbo makolímwa.
I Co LinVB 13:11  Ntángo nazalákí mwána, nazalákí koloba lokóla mwána, sé na makanisi mpé na mayéle ma mwána. Awa nakómí mokóló, natíkí makambo ma bomwána.
I Co LinVB 13:12  Sikáwa tozalí naíno komóno polélé té, kasi o ntángo êná tokomónono miso na miso. Sikáwa nayébí sé ndámbo ya makambo, kasi o ntángo êná nakoyéba mánso sé lokóla Nzámbe ayébí ngáí.
I Co LinVB 13:13  Sikáwa tozalí na boyambi, bolíkyi na bolingi, mangó ndé mabongí másáto : o káti ya mabongí mâná másáto, bolingi bolekí bonéne.
Chapter 14
I Co LinVB 14:1  Bólukaka na makasi bolingi, mpé bótía mitéma na makabo ma Elímo ; libosó mpenzá bóluka likabo lya koloba maloba ma Nzámbe ;
I Co LinVB 14:2  zambí moto akolobaka nkóta iye yě mǒkó ayébí té, azalí koloba na bato té, kasi na Nzámbe. Na ngúyá ya Elímo azalí koloba maloba mabómbámí, moto mǒkó té akoyóka ntína ya maloba ma yě.
I Co LinVB 14:3  Kasi moto asakólí maloba ma Nzámbe, azalí koloba na bato mpô ya kokólisa boyambi bwa bangó, koléndisa mpé kobóndo bangó.
I Co LinVB 14:4  Moto azalí koloba nkóta iye yě mǒkó ayébí té, azalí kokólisa boyambi bwa yě mǒkó, kasi moto azalí koloba maloba ma Nzámbe azalí kokólisa boyambi bwa lingómbá lya bakrístu.
I Co LinVB 14:5  Nalingí ’te bínó bánso bókoka koloba nkóta iye bínó mǒkó boyébí té, kasi elekí malámu sókó bokokí kosakola maloba ma Nzámbe, mpô moto asakólí maloba ma Nzámbe alekí moto ayébí koloba nkóta iye yě mǒkó ayébí té ; kasi ezalí bôngó té sókó óyo wa bábalé ayébí mpé kolimbola maloba ma yě, mpô ya koléndisa báníngá.
I Co LinVB 14:6  Bandeko, sókó nayéí epái ya bínó koloba lokóta loye ngáí mǒkó nayébí té, nakokí kosálisa bínó na níni ? Na maloba ma ngáí nakosálisa bínó na elóko té sókó nakokí kolimbolela bínó mobómbamo mǒkó té, sókó nakokí kopésa mayéle ma sika té, sókó nayébísí bínó maloba ma Nzámbe té, tǒ napésí bínó litéya lyǒ kó té.
I Co LinVB 14:7  Sé bôngó na mindúle, mpiólóló tǒ nzenze : sókó nóti ya mizíki iyókání malámu té, bóníbóní bakoyéba nzémbo níni bazalí koyemba ?
I Co LinVB 14:8  Mpé sókó mondúle moyókání sé moké, náni akomílé­ngele mpô ya etumba ?
I Co LinVB 14:9  Bínó sé bôngó : sókó na monoko mwa bínó bozalí koloba maloba mayébání té, bóníbóní bakoyéba ntína ya maloba ma bínó ? Bozalí koloba sé bilobáloba.
I Co LinVB 14:10  O nsé mobimba nkóta izalí ndéngé na ndéngé, atâ lokóta lǒ kó té lozángí ntína.
I Co LinVB 14:11  Kasi sókó nayébí lokóta té loye moto mosúsu azalí koloba, akotála ngáí lokóla moútá ; ngáí mpé nakotála yě lo­kóla moútá.
I Co LinVB 14:12  Bôngó, áwa bozalí koluka makabo ma Elímo, bóluka kozwa mangó míngi mpô ya koléndisa boyambi bwa bato bánso.
I Co LinVB 14:13  Yangó wâná moto akolobaka nkóta iye yě mǒkó ayébí té asengélí kosámbela mpô ’te ákoka koli­mbola yangó.
I Co LinVB 14:14  Zambí sókó nasá­mbélí na nkóta iyébání té, motéma mwa ngáí mozalí kosámbela sôló, kasi mayéle ma ngáí té.
I Co LinVB 14:15  Bôngó násála níni ? Nakosámbela na motéma, kasi na mayéle ma ngáí mpé. Nakoyémba nzémbo ya bokúmisi na motéma, sôló, kasi nakoyémba mpé na mayéle.
I Co LinVB 14:16  Sókó osámbélí sé o nkóta iyébání té, bóníbóní moto óyo ayébí yangó té akokí koloba « Amen ! » ntángo osílísí losámbo la yǒ la botóndi ? Mpô ayébí té níni oútí koloba.
I Co LinVB 14:17  Atâ lósambo la yǒ la botóndi lozalí malámu, moto mosúsu azwí na langó litómba té.
I Co LinVB 14:18  Natóndí Nzámbe, mpô nalekí bínó bánso na bolobi nkóta.
I Co LinVB 14:19  ntángo tokosanganaka likita, nalingí sé koloba maloba mátáno maye mayébání mpô ya kotéya báníngá, kasi koloba maloba nkóto zómi mayébání té.
I Co LinVB 14:20  Bandeko, na ezaléli bokoma lokóla bána baké té ; bozala lokóla bána baké o mabé bokosálaka, kasi na makanisi ma bínó bólakisa ’te bozalí bakóló.
I Co LinVB 14:21  Ekomámí o Mobéko ’te : Mokonzi alobí : Nakoloba na bato ba ekólo eye na monoko mwa bato bakolobaka nkóta ya baútá, mpé atâ bôngó bakoyóka ngáí té.
I Co LinVB 14:22  Bôngó, koloba nkóta iyébání té ezalí elembo té o míso ma bayambi, kasi o míso ma baye bayambí té ; kosakola maloba ma Nzámbe ezalí elembo té o míso ma bato bayambí té, kasi o míso ma baye bayambí.
I Co LinVB 14:23  Bôngó, ntángo bakrístu míngi basangání mpé bato bánso babandí koloba nkóta iyébání té, sókó bato bayébí makambo mâná té tǒ baye bayambí té bayíngélí o likita, bakoloba té ’te bobélí ligbómá ?
I Co LinVB 14:24  Kasi sókó moto ayambí té tǒ óyo ayébí makambo mâná té ayíngélí ntángo bánso bazalí kosakola maloba ma Nzámbe, bánso bakopálela mpé bakosámbisa yě.
I Co LinVB 14:25  Makambo mabómbámí o motéma mwa yě makoyébana, bôngó akokitisa elongi o nsé, akokúmisa Nzámbe mpé akosakola ’te Nzámbe azalí sôló o ntéi ya bínó.
I Co LinVB 14:26  Bôngó bandeko, tóloba níni ? Ntángo bokosanganaka, mǒkó ako­yémba nzémbo ya bokúmisi, mosúsu akopésa litéya, mosúsu akolimbola mobómbamo, mosúsu ako­loba lokóta loyébání té, mosúsu akolimbola langó : kasi bósálaka ’te mánso máléndisa boyambi bwa bínó.
I Co LinVB 14:27  Soko moto akoloba nkóta iyébání té na bato bázala bábalé tǒ básá­to ; báloba moto na moto na ngala ya yě, mpé moto akolimbola maloba mâná ázá­nga té.
I Co LinVB 14:28  Sókó moto asengélí kolimbola mangó azalí té, bánso basangání likita bátíka koloba ; moto na moto ámílobela o motéma mpé áloba na Nzámbe.
I Co LinVB 14:29  Baye bakosakola maloba ma Nzámbe bázala sé bábalé tǒ básáto, basúsu bátála sókó balobí malámu.
I Co LinVB 14:30  Sókó moto mosúsu óyo afándí naíno abandí koyébisa likambo libómbámí, moto óyo azalákí koloba ákanga monoko.
I Co LinVB 14:31  Bínó bánso bokokí kosakola maloba ma Nzámbe, kasi moto na moto na ngala ya yě, bánso bázwa bôngó matéya mpé moléndé.
I Co LinVB 14:32  Baye bakosakolaka maloba ma Nzámbe bákonza maloba ma bangó,
I Co LinVB 14:33  mpô Nzámbe azalí Nzámbe wa mobúlú té, kasi wa bobóto. Sé lokóla ekosálemaka o masangá mánso ma bakrístu,
I Co LinVB 14:34  básí basengélí kokanga monoko o makita ma bínó, zambí bazwí ndingisa ya koloba té ; bázala sé na botósi lokóla ekomámí o Mobéko mwa Móze.
I Co LinVB 14:35  Sókó balingí koyóka ndimbola ya likambo lyǒ kó, bátúna babáli ba bangó o ndáko, mpô ebongí té ’te mwásí áloba o esíká bato bánso basangání.
I Co LinVB 14:36  Maloba ma Nzámbe maú­tí ndé epái ya bínó ? Sé bínó boto­ngólí mangó ?
I Co LinVB 14:37  Sókó moto akanísí ’te akokí kosakola maloba ma Nzámbe tǒ Elímo akitélí yě, ándima ’te maye nakomélí bínó mazalí mobéko mwa Nzámbe.
I Co LinVB 14:38  Sókó ayébí yangó té, Nzámbe mpé akoyéba yě té.
I Co LinVB 14:39  Bôngó, bandeko, bólukaka likabo lya kosakola maloba ma Nzámbe, mpé baye bakolobaka nkóta iyébání té, bópekisa bangó té.
I Co LinVB 14:40  Kasi mánso másálema bǒ ebongí, na mobúlú té.
Chapter 15
I Co LinVB 15:1  Bandeko, nakokundolela bínó Nsango Elámu eye nasangélákí bínó ; oyo bondimákí mpé, téé leló mpé boyambí yangó na moléndé.
I Co LinVB 15:2  Bokobíka na yangó sókó boyambí yangó sé lokóla nasangélákí bínó. Sókí té, boyambákí sé mpámba.
I Co LinVB 15:3  Yambo napésákí bínó maye ngáí mǒkó nayókákí : ’te Krístu awéí mpô ya masúmu ma bísó, lokóla ekomámí o Minkandá Misántu ;
I Co LinVB 15:4  aku­ndámí mpé asékwí o mokolo mwa mísáto, lokóla ekomámí o Minkandá Misá­ntu,
I Co LinVB 15:5  abimélí Pétro, abimélí mpé bapóstolo zómi na bábalé.
I Co LinVB 15:6  Na nsima amímónísí na mbala yǒ kó na bandeko leká nkámá ítáno ; míngi o káti ya bangó bazalí naí­no na bomoi, basúsu basílí bawéí.
I Co LinVB 15:7  Abimélí Yakóbo, na nsima abimélí bapóstolo basúsu bánso.
I Co LinVB 15:8  Na nsúka abimélí mpé ngáí, elóko mpámba.
I Co LinVB 15:9  Sôló, nazalí nsima ya bapóstolo bánso, nalongóbání na nkómbó ya apóstolo té, zambí nazalákí konyókolo Eklézya ya Nzámbe.
I Co LinVB 15:10  Bobélé ngrásya ya Nzámbe esálí ’te ná­kóma lokóla nazalí sikáwa, mpé ngrás­ya eye ebótí mbuma : nasálí mosálá míngi leká bato basúsu. Té, nasálí mwangó na ngúyá ya ngáí mǒkó té, kasi na lisálisi lya ngrásya ya Nzámbe.
I Co LinVB 15:11  Likambo té, ézala ngáí ézala bangó, ezalí sé nsango bísó tokosa­ngelaka, eye bínó boyambí.
I Co LinVB 15:12  Awa tokotéyaka ’te Krístu asé­kwí o bawá, ndéngé níni basúsu o ntéi ya bínó bakolobaka ’te nsékwa ya bawá ezalí té ?
I Co LinVB 15:13  Sókó bato bawéí bakosékwa té, Krístu mpé asékwí té.
I Co LinVB 15:14  Kasi sókó Krístu asékwí té, matéya ma bísó mazángí ntína, mpé boyambi bwa bínó bozángí ntína.
I Co LinVB 15:15  Sókó ezalákí ya sôló ’te bato bakosékwa té, mbele tozalákí banzénénéké ba lokutá o mambí ma Nzámbe, mpô tosakólákí ’te Nzámbe asékwísí Krístu, nzókandé asékwísí yě té.
I Co LinVB 15:16  Mpô sókó nsékwa ya bato ezalí té, Krístu mpé asékwí té.
I Co LinVB 15:17  Mpé sókó Krístu asékwí té, boyambi bwa bínó bozángí ntína, mpé botíkálí sé na masúmu ma bínó.
I Co LinVB 15:18  Sé bôngó, bato bawéí o boyambi Krístu, babúngámí sékô.
I Co LinVB 15:19  Sókó tokokí kotía elíkyá na Krístu bobélé o ntángo ya bomoi bwa bísó o mokili moye, tozalí sôló nsúka ya bato ba mawa.
I Co LinVB 15:20  Kasi ezalí bôngó té ! Krístu asé­kwí sôló : yě moto wa libosó asékwí o bawá.
I Co LinVB 15:21  Liwá liyákí mpô ya moto mǒkó, sé bôngó nsékwa eyéí mpô ya moto mǒkó.
I Co LinVB 15:22  Lokóla bato bánso bakowáka mpô ya Adámu, bánso bakosékwa sé mpô ya Krístu.
I Co LinVB 15:23  Kasi moto na moto mwa yě mokolo : moto wa libosó, Krístu ; nsima, bato ba Krístu o Mokolo mwa Boyéi bwa yě.
I Co LinVB 15:24  Nsima nsúka ya mokili ekoyâ : Krístu akosílisa lokúmu, ngúyá mpé bokonzi bónso bwa bangúná ba Nzámbe, mpé akozóngisela Nzámbe Tatá bokonzi bwa yě.
I Co LinVB 15:25  Zambí Krístu asengélí kozala na bokonzi kín’o mokolo Nzámbe akosílisa kokwêisa bangúná ba yě bánso o nsé ya makolo ma yě.
I Co LinVB 15:27  zambí Nzámbe atíí mánso o nsé ya makolo ma Krístu. Kasi mokolo Krístu akoloba : « Ut’o sikáwa bínso bizalí na botósi », liloba ‘bínso’ litálí Nzámbe té, óyo apésí Krístu Bokonzi.
I Co LinVB 15:28  Mokolo bikelámo bínso bikolakisa yě botósi, Mwána yě méí mpé akotósa Oyo asálákí ’te bínso bítósa yě mpô ’te Nzámbe ázala Mokonzi wa bikelámo bínso.
I Co LinVB 15:29  Sókó ezalákí bôngó té, baye bakokúlaka batísimo mpô ya bawá, bakozwa litómba níni ? Sókó bawéi bakosékwa té, bôngó ntína níni bakokúlaka batísimo mpô ya bangó ?
I Co LinVB 15:30  Bísó mǒkó mpé, mpô níni tómítía o makáma ma liwá ntángo ínso ?
I Co LinVB 15:31  Mokolo na mokolo nakokí kokúfa ; nalobí yangó na bínó mpô bozalí lokúmu la ngáí o Krístu Yézu, Mokonzi wa bísó.
I Co LinVB 15:32  Sókó o Eféze nabundákí na nyama ya zámba sé na makasi ma bomoto, nakozwa litómba níni sókó bato bakosékwa té ? Bôngó, tólía na biso mpé tómele, zambí tokokúfa lóbí.
I Co LinVB 15:33  Bómíkósa té, « báníngá babé bakobébisaka ezalela elámu ya bato. »
I Co LinVB 15:34  Bózóngela nzelá ya bwányá bǒ ebongí mpé bósála masúmu té. Likambo nakoyébisa bínó sikáwa likoyókisa bínó nsóni : o káti ya bínó bato basúsu bayébí Nzámbe atâ moké té.
I Co LinVB 15:35  Mbele moto akokí komítúna bóníbóní bawéi bakosékwa. Bakozónga na nzóto níni ?
I Co LinVB 15:36  Ozángí mayéle ! Mbóto eye olóní ekokí bobélé kobima sókó esílí ekúfí.
I Co LinVB 15:37  Mbóto eye olóní ezalí eké, ézala ya mbuma ya mámpa tǒ esúsu, naíno ekómí na bonéne té bwa mbuma ekobima nsima.
I Co LinVB 15:38  Nzámbe moto akosála ’te mbuma eye ébótama lokóla yě mǒ­kó alingí : mbuma yǒ kó yǒ kó na loléngé la yangó.
I Co LinVB 15:39  Minsuni mínso mizalí loléngé lǒ­kó té : bato bazalí na mosuni mosúsu, nyama izalí na mosuni mosúsu, ndeke na mosuni mosúsu, mbísi na mosuni mosúsu.
I Co LinVB 15:40  Bikelámo bizalí o likoló ná biye bizalí o nsé bikeséní ; biye bya likoló bizalí na kitóko ya byangó, biye bya nsé na kitóko ya byangó.
I Co LinVB 15:41  Mwésé mozalí na bongengi bwa yangó, sánzá na bongengi bwa yangó, minzóto na bongengi bwa myangó ; atâ monzóto mǒkó mǒkó mozalí na bongengi bwa mwangó.
I Co LinVB 15:42  Na nsékwa ya bawá ekozala sé bôngó : nzóto eye ekokí kopolo ekundámí, na nsima ekosékwa mpô ékúfa lisúsu té ;
I Co LinVB 15:43  ekundámí lokóla elóko mpámba, kasi ekosékwa na nkémbo ; ekundámí lokóla elóko etaú, kasi ekosé­kwa na ngúyá ;
I Co LinVB 15:44  nzóto ya nsuni eye ekundámí ekosékwa lokóla nzóto ya molímo. Nzóto ya nsuni ezalí, nzóto ya molímo mpé ezalí.
I Co LinVB 15:45  Ekomámí bôngó o Minkandá Misántu : Moto wa yambo, Adámu, azwí bomoi na nzó­to ya nsuni ; Adámu wa sika, Krístu, akómí Elímo óyo akopé­saka bomoi.
I Co LinVB 15:46  Nzóto ya molímo ebimí libosó té : nzóto ya nsuni emónóní libosó, nzóto ya molímo bobélé nsima.
I Co LinVB 15:47  Moto wa yambo aútákí o mabelé, azalí moto wa mokili ; moto wa bábalé, Krístu, aútí o likoló.
I Co LinVB 15:48  Lokóla moto wa yambo, bato ba nsé bánso bazalí ba nsé ; sé bôngó bato ba likoló bakozala lokóla moto wa likoló.
I Co LinVB 15:49  Sé lokóla tozalákí bato ba nsé, tokokóma lokóla bato ba likoló.
I Co LinVB 15:50  Bandeko, nayébísí bínó boye : Nzóto ya nsuni na makilá ekokí koyíngela o Bokonzi bwa Nzámbe té ; nzóto eye esengélí kopolo ekokí kozwa bomoi bwa lobíko té.
I Co LinVB 15:51  Sikáwa nakoyébisa bínó mobómbamo : Bísó bánso tokowá té, kasi bánso tokobóngwana na nzóto
I Co LinVB 15:52  o mokolo mwa nsúka ntángo bakobéte mondúle na mbálákáká. Ya sôló, bakobéte mondúle mpé bato baw­éí bakosékwa na nzóto iye ikobéba lisúsu té, mpé bísó bato towéí naíno té tokobóngwana,
I Co LinVB 15:53  mpô ese­ngélí ’te nzóto eye ya nsuni ébó­ngwana, ékoka kobéba lisúsu té ; nzóto eye ya kokúfa ézwa bomoi bwa sékô.
I Co LinVB 15:54  Bôngó, mokolo nzóto ya nsuni ekobóngwana, ekobéba lisúsu té ; mpé mokolo nzóto eye ya kokúfa ekozwa bomoi bwa lobíko, mokolo môná ekosálema sé lokóla ekomámí o Minkandá Misántu : Basúkísí liwá, balóngí lyangó sékô.
I Co LinVB 15:55  E liwá, wápi lilónga lya yǒ ? E liwá, wápi ngúyá ya yǒ ya kozokisa ?
I Co LinVB 15:56  Ngúyá ya liwá ya kozokisa, ndé lisúmu, ngúyá ya lisúmu eútí na Mobéko.
I Co LinVB 15:57  Bátóndo Nzámbe, óyo akolóngisa bísó mpô ya Mokonzi wa bísó Yézu Krístu !
I Co LinVB 15:58  Bôngó, bandeko ba bolingo, bótía moléndé, bótatabana té, bómípésa ntángo ínso na mosálá mwa Mokonzi ; boyébí ’te mosálá bokosála na ngúyá ya Mokonzi mokokende mpámba té.
Chapter 16
I Co LinVB 16:1  O bokongoli mosolo mpô ya bandeko, bínó mpé bólanda mibéko napésákí bato ba Eklézya ya Galáta.
I Co LinVB 16:2  O mikolo mya lomingo mínso mǒkó mǒkó wa bínó moto na moto átía mwâ mosolo mpembéni lokóla akokí, mpé ábó­mba mwangó ; bôngó mokolo nákoyâ bokosengela kokongolo mosolo lisúsu té.
I Co LinVB 16:3  Mokolo nakokóma epái ya bínó, nakotínda bato baye bínóméí bomónókí ’te babongí na mosálá môná, bákende kotíka o Yerúzalem makabo ma bínó ná mpé minkandá miye nakopésa bangó.
I Co LinVB 16:4  Sókó ntína ezalí ’te ngáí mpé nákende, bakokí kokende na ngáí nzelá yǒkó.
I Co LinVB 16:5  Nakoyâ epái ya bínó sókó nasílí kokátisa Masedónia, zambí nakoleka kúná.
I Co LinVB 16:6  Sókó nakokí nakoúmela mwâ mikolo o mbóka bínó, mbele nakotíkala kúná o eleko ya mpío mobimba, mpô ’te bínó bókoka kokende kotíka ngáí o esíká nakokende nsima.
I Co LinVB 16:7  Nalingí koyâ kotála bíno mbángu mbángu té, nazalí na elíkyá ’te nákoka koúmela mwâ mikolo epái ya bínó, sókó Nzámbe alingí.
I Co LinVB 16:8  Nzókandé nakotíkala o Eféze kín’o mokolo mwa Pentekóste,
I Co LinVB 16:9  zambí áwa nazwí nzelá ya kosála mosálá monéne, atâ bangúná bazalí míngi.
I Co LinVB 16:10  Mokolo Timotéo akoyâ, boya­mba yě malámu, bôngó ábánga epái ya bínó té. Akosálaka mosálá mwa Mokonzi sé lokóla ngáí.
I Co LinVB 16:11  Bôngó moto mǒkó ákínola yě té, kasi bósálisa yě mpô ’té ázónga na bobóto epái ya ngáí ; nakozila yě elongó na bandeko.
I Co LinVB 16:12  Nabóndélákí ndeko wa bísó Apólos míngi ákende o mbóka bínó elongó na bandeko basúsu, kasi alingí kokende sikáwa sókí moké té, akokende mokolo akozwa nzelá.
I Co LinVB 16:13  Bókéngele, bópikama makási o boyambi bwa bínó, bózala na mpíkó mpé bólénda.
I Co LinVB 16:15  Bandeko, boyébí ’te Stéfanas na bato ba libótá lya yě bazalí bakrístu ba yambo ba Akáya ; bangó mǒkó bandimákí kosálisa bakrístu. Bongó naséngí bínó
I Co LinVB 16:16  bóndima ’te bato bakosálaka bôngó mpé bato bánso bakomíyókisaka mpási o mosálá elo­ngó na bangó báyángela bínó.
I Co LinVB 16:17  Nasepélí míngi áwa Stéfanas, Fortunáto na Akáyo bakómí epái ya ngáí ; komóno bangó ezalí lokóla namóní bínó bánso ;
I Co LinVB 16:18  bakitísí bísó na bínó motéma. Bóyéba kokúmisa bato bazalí lokóla bangó.
I Co LinVB 16:19  Bandeko bakrístu ba Azía batí-ndélí bínó mbóte. Akwíla na Príska mpé ná bandeko bakosanganaka o ndáko ya bangó batíndélí bínó mbóte o nkómbó ya Mokonzi.
I Co LinVB 16:20  Bandeko bánso batíndélí bínó mbóte. Bópésana mbóte na ekópi esántu.
I Co LinVB 16:21  Bóyamba mbóte ya ngáí, eye nakomí na lobóko la ngáí mǒ­kó, Pólo.
I Co LinVB 16:22  Sókó moto alingí Mokonzi té, mabé mákwêla yě ! « Maranata. »
I Co LinVB 16:24  Nalingí bínó bánso lisangá na Yézu Krístu.