Chapter 1
| Judg | LinVB | 1:1 | Nsima ya liwa lya Yozue, ba- Israel batuni Yawe : « O kati ya biso nani abanda kobundisa ba-Kanana ? » | |
| Judg | LinVB | 1:2 | Mpe Yawe azongisi : « Yuda moto abanda kobunda, mpo nasili nakabi mokili o maboko ma ye. » | |
| Judg | LinVB | 1:3 | Yuda alobi na ndeko wa ye Simeon : « Yaka kosalisa ngai o mokili bapesi ngai, bongo tobunda etumba na ba-Kanana ; na nsima ngai nakosalisa yo o mokili bapesi yo. » Mpe Simeon akei kosalisa ye. | |
| Judg | LinVB | 1:4 | Bongo Yuda akei, mpe Yawe akabi bato ba Kanana na ba-Perizi o maboko ma ye. O mboka Bezek balongi bato nkoto zomi. | |
| Judg | LinVB | 1:6 | Adoni-Bezek akimi, kasi balandi ye, bakangi ye mpe bakati ye misapi minene mya maboko mpe mya makolo. | |
| Judg | LinVB | 1:7 | Adoni-Bezek alobi : « Bakonzi ntuku nsambo bazalaki kolokoto mpumbulu ya mampa o nse ya meza, mpe ngai moto nakataki bango misapi minene mya maboko mpe mya makolo ; sikawa Yawe azongiseli ngai mabe nasalaki bango. » Bakei na ye o Yeruzalem, akufi bobele kuna. | |
| Judg | LinVB | 1:8 | Bana ba Yuda bakei kobunda na Yeruzalem ; babotoli yango, babomi bato banso na mopanga mpe batumbi engumba. | |
| Judg | LinVB | 1:9 | Na nsima bana ba Yuda balongwi kuna mpe bakei kobunda na ba-Kanana, baye bafandi o ngomba, o Negeb mpe o mokili epai ya mbu. | |
| Judg | LinVB | 1:10 | Na nsima akei kobunda na ba-Kanana bafandi o Ebron. Kala nkombo ya Ebron ezalaka Kiriat-Arba. Kuna alongi Sesai, Akiman na Talmai. | |
| Judg | LinVB | 1:11 | Alongwi kuna mpe akei kobunda na bato bafandi o Debir, mboka eye ezalaka kala na nkombo Kiriat-Sefer. | |
| Judg | LinVB | 1:12 | Kaleb alobi : « Moto akolonga etumba o Kiriat-Sefer mpe akobotolo mboka, nakobalisa ye mwana wa ngai Aksa. » | |
| Judg | LinVB | 1:13 | Otniel, mwana wa Keniz, mozimi wa Kaleb, abotoli mboka, mpe Kaleb abalisi ye mwana wa ye Aksa. | |
| Judg | LinVB | 1:14 | Ekomi Aksa o ndako ya Otniel, oyo abondeli ye ’te asenge tata wa ye elanga. Akiti mpunda mpe Kaleb atuni ye : « Olingi nini ? » | |
| Judg | LinVB | 1:15 | Aksa azongisi : « Nalingi okabela ngai eloko. Awa otindi ngai o mokili mwa Negeb, pesa ngai maziba ma mai. » Mpe Kaleb akabeli ye maziba masusu o likolo, masusu o ngele. | |
| Judg | LinVB | 1:16 | Bana ba Obab, moto wa Keniz, bokilo wa Moze, balongwi o mboka ya Mbila mpe elongo na bana ba Yuda bakei tee o eliki ya Yuda, eye ezali o Negeb, penepene na Arad. Bayei kofanda wana o kati ya ba-Amalek. | |
| Judg | LinVB | 1:17 | Na nsima Yuda na ndeko wa ye Simeon bakei kobunda na ba-Kanana, baye bafandi o Sefat ; balongi bango mpe babebisi mboka nye. Yango wana bapesi mboka ena nkombo Orma. | |
| Judg | LinVB | 1:19 | Yawe azalaki na Yuda, bongo Yuda akomi nkolo wa mokili mwa Ngomba, kasi akokaki kobengana bato bafandi o esobe te, zambi bazalaki na makalo ma bibende. | |
| Judg | LinVB | 1:20 | Bapesi Kaleb mboka Ebron, lokola Moze alobaki, mpe Kaleb abengani kuna bana basato ba Anak. | |
| Judg | LinVB | 1:21 | Kasi bana ba Benyamin babimisi ba-Yebus o mboka ya bango Yeruzalem te ; tee lelo ba-Yebus bakofandaka o Yeruzalem elongo na bana ba Benyamin. | |
| Judg | LinVB | 1:24 | Bato batindami mpo ya konongo, bamoni moto moko abimi o mboka, balobi na ye : « Lakisa biso epai wapi tokoki kokoto o mboka, bongo tokoyokela yo mawa. » | |
| Judg | LinVB | 1:25 | Ye alakisi bango esika kani bakoki koyingela o mboka. Babomi bato banso na mopanga, kasi batiki moto oyo akende na libota lya ye mobimba. | |
| Judg | LinVB | 1:26 | Moto oyo akei o mokili mwa ba-Iti mpe atongi mboka kuna, apesi yango nkombo Luz ; ezali nkombo ya mboka ena tee lelo. | |
| Judg | LinVB | 1:27 | Manase akokaki kobotolo mboka iye te : Bet-Sean, Tanak, Dor, Yibleam, Megido na mpe mboka ike ya penepene. Bongo ba-Kanana batikali o mokili mona. | |
| Judg | LinVB | 1:28 | Nzokande mokolo ba-Israel bakomi makasi bakomisi ba-Kanana baombo ba bango, kasi babengani bango te. | |
| Judg | LinVB | 1:29 | Efraim mpe abengani ba-Kanana te, baye bafandi o Gezer, mpe bongo ba-Kanana batikali kuna mpe bafandi esika yoko na ye. | |
| Judg | LinVB | 1:30 | Zabulon abengani bato ba Kitron na Nakalol te. Ba-Kanana bakobi kofanda o kati ya mabota ma Zabulon bo baombo ba bango. | |
| Judg | LinVB | 1:31 | Aser abengani bato ba Ako te, bato ba Sidoni, Akleb, Azkib, Elba, Afiki na Rekob mpe te. | |
| Judg | LinVB | 1:32 | Bongo bato ba libota lya Aser batikali kofanda o kati ya ba-Kanana, bankolo mboka, zambi babengani bango te. | |
| Judg | LinVB | 1:33 | Neftali abengani bankolo mboka te : ba-Bet-Semes na ba-Bet-Anat, ayei kofanda o kati ya ba-Kanana baye bafandi o ekolo ena ; kasi ba-Bet-Semes na ba-Bet-Anat bakomi baombo ba ye. | |
| Judg | LinVB | 1:35 | Ba-Amor batikali wana mpe bafandi o Ar-Eres, Ayalon mpe Saalbim ; kasi mokolo bato ba libota lya Yozefu bakomi makasi, bakomisi ba-Amor baombo ba bango. | |
Chapter 2
| Judg | LinVB | 2:1 | Anzelu wa Yawe alongwi o Gilgal mpe akei o Bokim ; alobi : « Nabimisi bino o Ezipeti, mpe nakotisi bino o mokili moye nalakelaki bankoko ba bino. Nalobaki : ‘Mokolo moko te nakoboma bondeko nakataki na bino. | |
| Judg | LinVB | 2:2 | Bino bokoki kokata bondeko na bato ba mokili moye te, boboma bitumbelo bya bango’. Nzokande boboyi kotosa monoko mwa ngai. Mpo nini bosalaki bongo ? | |
| Judg | LinVB | 2:3 | Yango wana nalobi : Nakobengana bato ba mokili liboso lya bino te. Bakozala banyokoli ba bino, mpe banzambe ba bango bakozalela bino motambo. » | |
| Judg | LinVB | 2:6 | Yozue asukisi likita ; bongo ba-Israel bakei, moto na moto o eteni ya mokili bapesaki ye mpo ’te bafanda. | |
| Judg | LinVB | 2:7 | Bato banso bazalaki kosalela Yawe ntango Yozue azalaki na bomoi, mpe ntango bakolo ba Israel bazalaki na bomoi, baye bayaki nsima ya Yozue mpe bamonoki makambo manene manso Yawe asalaki mpo ya Israel. | |
| Judg | LinVB | 2:9 | Bakundi ye o mabelé asangolaki o Timnat-Eres, o mokili mwa ngomba ya Efraim, leka ngomba Gaas. | |
| Judg | LinVB | 2:10 | Mosika te, bato ba libota lya ye mobimba bawei mpe bakei kokutana na bankoko ba bango. Na nsima libota lya sika likitani bango, kasi bayebi Yawe te, bayebi mpe makambo Yawe asalaki mpo ya Israel te ! | |
| Judg | LinVB | 2:12 | Batiki Yawe Nzambe wa bankoko ba bango, Oyo abimisaki bango o mokili mwa Ezipeti. Balandi banzambe basusu ba bato ba bikolo bya penepene. Bakomi kokumisa bango, bongo bayokisi Yawe nkanda. | |
| Judg | LinVB | 2:14 | Yango wana Yawe ayokeli ba-Israel nkanda. Atiki bango o maboko ma bayibi, baye babotoli bango biloko binso. Banguna bayei kobunda na bango mpe bazingi mboka ya bango ; bakoki lisusu banguna te. | |
| Judg | LinVB | 2:15 | Nzela inso baluki kolonga banguna, Yawe abebisi yango mpe ayokisi bango mpasi ; se lokola alobelaki bango mpe alayaki ndai ayokisi bango mpasi mpenza. | |
| Judg | LinVB | 2:16 | Na nsima Yawe atindeli bango bakambi, bazuzi, babikisa ba-Israel o maboko ma bato babotoli bango biloko. | |
| Judg | LinVB | 2:17 | Kasi ba-Israel batosi ata bazuzi ba bango te. Bakei kokangana na banzambe basusu mpe kokumbamela bango. Noki mpenza batiki nzela ya bankoko ba bango, baye bazalaki kotosa mibeko mya Yawe, balandi ndakisa ya bango te. | |
| Judg | LinVB | 2:18 | Eponoki Yawe zuzi, asalisi ye bomoi bwa ye mobimba mpo ’te abikisa bato ba ye o maboko ma banguna, zambi awa bakomi kolela mpo ya mpasi bayokisi bango, Yawe ayokeli bango mawa. | |
| Judg | LinVB | 2:19 | Kasi mbala inso zuzi moko awei, bazongeli lisusu masumu ma bango mpe basali lisusu mabe maleki mabe bankoko ba bango basalaki. Balandi banzambe basusu, babondeli mpe bakumbameli bango. Nzela ya masumu bankoko balandaki batiki yango soki te. | |
| Judg | LinVB | 2:20 | Yawe ayokeli bato ba Israel nkanda mpenza, alobi : « Awa babomi bondeko nakataki na bankoko ba bango mpe baboyi kotosa monoko mwa ngai, | |
| Judg | LinVB | 2:21 | banda lelo, ngai mpe nakobengana o boso bwa bango ekolo yoko te ya biye bitikalaki o ntango Yozue akufaki. | |
| Judg | LinVB | 2:22 | Nakosala bongo mpo ya komeka ba-Israel, nayeba soko bakolanda nzela ya Yawe lokola bankoko ba bango. » | |
Chapter 3
| Judg | LinVB | 3:1 | Yawe atikaki bato ba bikolo bina bafanda o mokili mwa bango mpo ’te ameka ba-Israel, baye babu-ndi naino etumba yoko na ba-Kanana te. | |
| Judg | LinVB | 3:2 | Asali bongo bobele mpo ’te bana ba Israel bayekola kobunda bitumba, baye babundi naino te. | |
| Judg | LinVB | 3:3 | Baye batikalaki : bakonzi batano ba ba-Filisti, ba-Kanana, ba-Sidoni na ba-Iti bakofa-ndaka o ngomba ya Libano, banda ngomba Baal-Ermon kin’o Amat. | |
| Judg | LinVB | 3:4 | Yawe atikaki bango mpo ameka ba-Israel, ayeba soko bakotosa mibeko apesaki bankoko ba bango na monoko mwa Moze. | |
| Judg | LinVB | 3:6 | babali ba Israel bakomi kobala bana basi ba bango, mpe babalisi bana babali basi ba bango ; bakumisi mpe banzambe ba bango. | |
| Judg | LinVB | 3:7 | Ba-Israel basali mabe o miso ma Yawe. Babosani Yawe Nzambe wa bango mpe bakumisi bikeko bya Baal na Astarte. | |
| Judg | LinVB | 3:8 | Yango wana Yawe ayokeli ba-Israel nkanda mpe akabi bango o maboko ma Kusan-Riseataim, mokonzi wa Edom, mpe bakomi bongo baombo ba Kusan-Riseataim mbula mwambe mobimba. | |
| Judg | LinVB | 3:9 | Kasi ba-Israel babeleli Yawe, oyo atindeli bango mobikisi, nkombo ya ye Otniel, mwana wa Keniz, ndeko wa Kaleb. | |
| Judg | LinVB | 3:10 | Elimo ya Yawe ezalaki na ye. Akomi zuzi wa Israel mpe akei kobunda etumba. Yawe akabi Kusan-Riseataim, mokonzi wa Edom, o maboko ma ye ; Otniel alongi ye. | |
| Judg | LinVB | 3:12 | Ba-Israel babandi kosala mabe lisusu o miso ma Yawe, oyo apesi Eglon, mokonzi wa Moab, nguya ya kobunda na Israel, zambi bango bazalaki kosala mabe o miso ma Yawe. | |
| Judg | LinVB | 3:13 | Eglon ayokani na ba-Amon mpe na ba-Amalek mpe akei kobundisa Israel ; alongi bango mpe abotoli mboka ya Mbila. | |
| Judg | LinVB | 3:15 | Kasi bato ba Israel babeleli Yawe, oyo atindeli bango mobikisi, nkombo ya ye Eyud, mwana wa Gera, wa libota lya Benyamin, moto azali makasi se na loboko la mwasi. Ba-Israel batindi ye epai ya Eglon, mokonzi wa Moab, akende kofuta mpako ya bango. | |
| Judg | LinVB | 3:16 | Eyud atuli mbeli ekokataka bipai bibale, bolai bwa loboko loko, mpe akangi yango o loketo la mobali o nse ya elamba ya ye. | |
| Judg | LinVB | 3:19 | Kasi ye moko, awa akomi o esika bakobengaka ‘Bikeko’, penepene na Gilgal, azongi epai ya mokonzi mpe alobi na ye : « Mokonzi, nazali na liloba litali se yo moko ! » Mokonzi alobi na bato ba ye ’te babima, mpe bato ba ye banso babimi o ndako. | |
| Judg | LinVB | 3:20 | Eyud akei epai ya ye. Mokonzi afandi o mbalasani, o esika ya mpio, esika ameseni kofanda ye moko. Eyud alobi na ye : « Mokonzi, nayeli yo liloba lya Nzambe. » Mokonzi alongwi o kiti. | |
| Judg | LinVB | 3:21 | Sikawa Eyud, na loboko la mwasi, akamati mbeli ekangami o loketo la mobali mpe atuboli libumu la mokonzi. | |
| Judg | LinVB | 3:22 | Mbeli mobimba ekoteli ye o libumu, mpe na nsima misuni mizongi o esika ya myango mpe mibombi mbeli, zambi Eyud abimisaki yango o libumu te. | |
| Judg | LinVB | 3:24 | Awa abimi, basali ba mokonzi bayei kotala, bamoni ’te bizibeli bya ndako ya likolo bikangami na mafu-ngola. Balobani : « Mbele akoti o zongó o mokili mwa ndako. » | |
| Judg | LinVB | 3:25 | Bazili mingi tee bakomi kobanga zambi afungoli ndako te. Bongo bakamati lifungola mpe baziboli ndako ; bamoni mokonzi wa bango alali o nse, asili akati motema. | |
| Judg | LinVB | 3:26 | Awa bazalaki kozila boye, Eyud asilaki kokima. Aleki o esika ya ‘Bikeko’ mpo ’te akima o mboka Seira. | |
| Judg | LinVB | 3:27 | Ekomi ye kuna, abeti mondule o kati ya ngomba ya Efraim mpe ba-Israel bakiti ngomba elongo na ye ; ye o liboso. | |
| Judg | LinVB | 3:28 | Alobi na bango : « Bolanda ngai, zambi Yawe akabi monguna wa bino o maboko ma bino. » Bakiti ngomba nsima ya ye, bakengeli bisika biye bato ba Moab bakolekaka mpo ya kokatisa Yordane, bapesi moto moko nzela ya kokatisa mai te. | |
| Judg | LinVB | 3:29 | Se o mokolo mona babomi ba-Moab nkoto zomi, banso bato makasi mpe ba mpiko, moto moko abiki te. | |
| Judg | LinVB | 3:30 | O mokolo mona bato ba Israel bayokisi ba-Moab nsoni mingi ; mibu ntuku mwambe mobimba ekolo Israel ekomi nye. | |
Chapter 4
| Judg | LinVB | 4:2 | Yawe akabi bango o maboko ma Yabin, mokonzi wa ba-Kanana, oyo ayangeli Asor. Komanda wa basoda ba ye Sisera, afandi o mboka Aroset-a-Goim. | |
| Judg | LinVB | 4:3 | Ba-Israel babeleli Yawe, zambi Sisera azalaki na makalo ma bibende nkama libwa ; anyokoli ba-Israel mingi mibu ntuku ibale. | |
| Judg | LinVB | 4:5 | Azalaki kosambisa o nse ya nzete ya Mbila ya Debora, katikati ya Rama na Betel, o ngomba ya Efraim ; ba-Israel bazalaki kokende epai ya ye mpo ’te asambisa makambo ma bango. | |
| Judg | LinVB | 4:6 | Abengi Barak, mwana wa Abinoam, wa Kedes o mokili mwa Neftali, mpe alobi na ye : « Yawe Nzambe wa Israel apesi etinda eye : Kende kosangisa bato o ngomba Tabor, mpe kamata basoda nkoto zomi o kati ya ba-Neftali na ba-Zabulon. | |
| Judg | LinVB | 4:7 | Nakobenda Sisera, komanda wa basoda ba Yabin, penepene na moluka Kison, akoma kuna elongo na makalo mpe na basoda ba ye, mpe nakokaba bango o maboko ma yo. » | |
| Judg | LinVB | 4:8 | Barak ayanoli : « Nakokende soko yo okokende na ngai elongo ; kasi soko okokende elongo na ngai te, ngai mpe nakokende te. » | |
| Judg | LinVB | 4:9 | Mwasi ayanoli : « Nakokende na yo, kasi o nzela eye yo moto okozwa lokumu te, zambi Yawe akokaba Sisera o maboko ma mwasi. » Bongo Debora atelemi mpe akei o Kedes elongo na Barak. | |
| Judg | LinVB | 4:10 | Barak abengi bato ba Zabulon na Neftali. Bato nkoto zomi balandi ye ; Debora akei na ye elongo. | |
| Judg | LinVB | 4:11 | Eber, moto wa Keni, alongwaki o libota lya Kain mpe o etuka ya Obab, bokilo wa Moze ; apikaki ema ya ye penepene na wenge ya Sananim, penepene na Kedes. | |
| Judg | LinVB | 4:13 | Sisera asangisi bato banso ba makalo ma bibende nkama libwa na mpe basoda banso bazalaki na ye ut’o Aroset-a-Goim kin’o moluka Kison. | |
| Judg | LinVB | 4:14 | Debora alobi na Barak : « Teleme, zambi lelo Yawe akokaba Sisera o maboko ma yo. Solo, Yawe akotambola liboso lya yo. » Mpe Barak akiti ngomba Tabor elongo na basoda nkoto zomi nsima ya ye. | |
| Judg | LinVB | 4:15 | Na mopanga mwa bato ba Barak, Yawe abulinginyi Sisera na makalo ma ye na basoda banso. Sisera atiki likalo lya ye mpe akimi na makolo. | |
| Judg | LinVB | 4:16 | Barak alandi makalo mpe basoda tee Aroset-a-Goim. Basoda banso ba Sisera bakufi na mopanga, moto moko abiki te. | |
| Judg | LinVB | 4:17 | Nzokande Sisera akimi na makolo epai ya ema ya Yael, mwasi wa Eber, moto wa Keni, zambi Yabin, mokonzi wa Asor azalaki koyokana na libota lya Eber, moto wa Keni. | |
| Judg | LinVB | 4:18 | Yael akei kokutana na Sisera mpe alobi na ye : « E mokonzi wa ngai, tikala awa mpe koto o ndako ya ngai. Obanga eloko te ! » Akoti o ema ya ye, mpe mwasi azipi ye na bolangiti. | |
| Judg | LinVB | 4:19 | Sisera alobi na ye : « Nabondeli yo, pesa ngai mwa mai namele, zambi nayoki mposa ya mai. » Afungoli eloko litondi na mabéle mpe apesi ye amele, na nsima azongisi bolangiti. | |
| Judg | LinVB | 4:20 | Sisera alobi na ye : « Teleme o monoko mwa ema, mpe soko moto atuni yo : ‘Moto moko azali awa ?’, oyanola ye ’te moto moko azali awa te. » | |
| Judg | LinVB | 4:21 | Kasi Yael, mwasi wa Eber, akamati piké ya ema, asimbi mpe ebeteli o loboko, abelemi na ye malembe, abeti piké o lopakatoi la ye mpe akangisi ye bongo o mabelé, zambi azalaki kolala mpongi mpo alembeki mingi ; akufi bobele bongo. | |
| Judg | LinVB | 4:22 | Mpe tala Barak abimi, alandi Sisera. Yael alobi : « Koto, bongo nalakisa yo moto oyo ozali koluka. » Akoti o ema ya ye : Sisera alali wana, akomi ebembe ; piké etuboli ye lopakatoi. | |
Chapter 5
| Judg | LinVB | 5:2 | O ntango ba-Israel bafungoli nsuki, mpe banso bandimi komipesa na motema moko, bokumisa Yawe ! | |
| Judg | LinVB | 5:3 | E bakonzi, e bankumu, boyoka : nalingi koyembela Yawe nzembo, mpe kokumisa Yawe, Nzambe wa Israel. | |
| Judg | LinVB | 5:4 | E Yawe, o ntango obimi o Seir, o eleko olongwi o esobe ya Edom, mokili moningani, likolo lilengi, mampata manokisi mbula makasi, | |
| Judg | LinVB | 5:6 | O mikolo mya Samgar, mwana wa Anat, o mikolo mya Yael, bata-mboli bazalaki o nzela te, baye bazalaki o mobembo baleki o nzela ya mpembeni. | |
| Judg | LinVB | 5:7 | Mboka ikufaki o Israel. Kasi mokolo moko yo, Debora, obimi, mpe oyei kobikisa biso, e mama wa Israel ! | |
| Judg | LinVB | 5:8 | Baponoki banzambe ba sika, ntango etumba ekomi penepene, basoda nkoto ntuku inei ba Israel, bamoni ata nguba te, ata likongo te. | |
| Judg | LinVB | 5:9 | Napesi bakambi ba Israel motema mwa ngai, nandimi baye bakomipesaka na motema moko, bokumisa Yawe ! | |
| Judg | LinVB | 5:10 | Bino bato bobuteli mpunda ya mpembe, bino bato bofandi o matoko kitoko, bino banso boleki o nzela, bomanyola. | |
| Judg | LinVB | 5:11 | Bato bakaboli biloko babotoli banguna, bayembi penepene na liziba lya mai, bakumisi misala minene mya Yawe, malamu maye asalaki mboka ya Israel. Bato ba ekolo ya Yawe basangani o ezibeli ya mboka. | |
| Judg | LinVB | 5:12 | Longwa o mpongi, e Debora, teleme, longwa o mpongi mpe teleme, yemba nzembo ! Teleme, Barak, mpe kamba baombo, mwana wa Abinoam. | |
| Judg | LinVB | 5:13 | Bato ba Israel bakomi o ezibeli ya mboka, bato ba Yawe bakomi bilombe balongi etumba. | |
| Judg | LinVB | 5:14 | Bankumu ba Efraim bakiti o lobwaku. Nsima ya yo bato ba Benyamin balandi yo, bakonzi basusu bauti o Makir, basusu bazwi montongo mwa bokonzi bauti o Zabulon. | |
| Judg | LinVB | 5:15 | Bankumu ba Izakar bazalaki wana elongo na Debora, mpe Barak alandi bango o esobe. O libota lya Ruben batunani mingi : | |
| Judg | LinVB | 5:16 | Mpo nini otikali kuna o kati ya lopango, mpo ya koyoka mpiololo ya bakengeli ba mpata ? O libota lya Ruben batunani mingi. | |
| Judg | LinVB | 5:17 | Galaad atikali o ngambo ya Yordane, mpe Dan, mpo nini okofandaka o masuwa ? Aser akofandaka penepene na mbu mpembeni ya bisika masuwa makoseme. | |
| Judg | LinVB | 5:19 | Bakonzi bayei mpe babundi etumba, bakonzi ba Kanana babuni etumba o mboka Tanak penepene na mai ma Megido, kasi babotoli mosolo o etumba te. | |
| Judg | LinVB | 5:21 | Mai ma moluka Kison mamemi bango, moluka Kison, moluka mwa kala ! E molimo mwa ngai, tambola na mpiko ! | |
| Judg | LinVB | 5:23 | Anzelu wa Yawe alobi : Botombela Meroz bobe, na mpe bato banso ba mboka ena, zambi bayaki kosalisa Yawe te, baboyaki kosalisa Yawe na bilombe ba ye. | |
| Judg | LinVB | 5:24 | Liboso lya basi banso, bakumisa Yael, mwasi wa Eber, moto wa Keni. Liboso lya baninga basi bafandi o ema, bakumisa ye ! | |
| Judg | LinVB | 5:26 | Atandi loboko mpo ya kokamata piké, na loboko la mobali asimbi ebeteli ya basali ; abetibeti Sisera, apasoli ye motó, atutituti ye mpe atuboli ye lopakatoi. | |
| Judg | LinVB | 5:27 | Monguna akwei o boso bwa ye, alali wana, ya solo, alali, akomi ebembe ; o esika akwei akufi ! | |
| Judg | LinVB | 5:28 | Mama wa Sisera afandi o lininisa, aleli, ut’o lininisa atali mpe amituni : « Mpo nini likalo lya ye lizali koumela ? Mpo nini mpunda ya ye izali kotambola se malembe ? » | |
| Judg | LinVB | 5:30 | « Mbele bazali kokabola biloko biye babotoloki, mbele soda moko moko akozwa mwasi, ata basi babale, mpe Sisera akozwa elamba kitoko, ata bilamba bibale, bilamba bya nkingo ata bibale. » | |
| Judg | LinVB | 5:31 | E Yawe, banguna ba yo banso bakufa bobele bongo, kasi baye balingi yo bazala lokola mwese mobimi na ntongo mpo ya kongala makasi. | |
Chapter 6
| Judg | LinVB | 6:1 | Ba-Israel basali mabe o miso ma Yawe ; Yawe akabi bango o maboko ma ba-Madian mibu nsambo mobimba. | |
| Judg | LinVB | 6:2 | Bato ba Madian bakomi konyokolo Israel mingi. Yango wana ba-Israel bakimi o kati ya ngomba, bakei kobombama o kati ya mibenga mpe o bibombamelo bisusu. | |
| Judg | LinVB | 6:3 | Mbala inso ba-Israel balonaki mbuma, ba-Madian elongo na bato ba Amalek na bato ba Esti lokola, bayei kobundisa bango. | |
| Judg | LinVB | 6:4 | Bapiki nganda o mokili mwa ba-Israel mpe basilisi mbuma ya bilanga tee Gaza. Batikeli ba-Israel eloko yoko ya kolia te : mpata te, ngombe te, mpunda mpe te. | |
| Judg | LinVB | 6:5 | Mpo bazalaki koya mingi mpenza, ná bibwele mpe na biema bya bango, ebele lokola mapalela. Okoki kotanga bango na kamela ya bango te ; bakoti o mokili se mpo ya kobebisa. | |
| Judg | LinVB | 6:8 | Yawe atindeli bango profeta moko aloba na bango : « Yawe, Nzambe wa Israel, alobi boye : Ngai nabimisaki bino o Ezipeti, nalongolaki bino o mokili esika bozalaki baombo. | |
| Judg | LinVB | 6:9 | Nabikisaki bino o maboko ma bato ba Ezipeti mpe ma baye banso bazalaki konyokolo bino. Nabenganaki bango o boso bwa bino mpe napesaki bango mokili mwa bango. | |
| Judg | LinVB | 6:10 | Nalobaki na bino : Nazali Yawe, Nzambe wa bino, bobanga banzambe ba ba-Amor te, bankolo ba mabelé. Kasi botosaki ngai te. » | |
| Judg | LinVB | 6:11 | Anzelu wa Yawe ayei mpe afandi o nse ya gbukulu ezali o Ofra ; nkolo wa nzete, Yoas wa libota lya Abiezer. Gedeon, mwana wa ye, azalaki kolongola mbuma ya mampa o kati ya matiti o ekamelo ya vino mpo ’te bato ba Madian bayiba yango te. | |
| Judg | LinVB | 6:12 | Anzelu wa Yawe abimeli ye mpe alobi na ye : « Yawe azali na yo, elombe wa bitumba ! » | |
| Judg | LinVB | 6:13 | Gedeon azongisi : « Mokonzi, nabondeli yo, soko Yawe azali na biso, mpo nini mabe mana manso makweli biso ? Wapi makamwisi batata ba biso basololaki biso ? Balobaki te ’te Yawe abimisaki biso o Ezipeti ? Sikawa Yawe atiki biso, akabi biso o maboko ma bato ba Madian. » | |
| Judg | LinVB | 6:14 | Na nsima Yawe ayei, atali ye mpe alobi : « Yo ozali makasi mpe na mpiko. Kende kobikisa Israel o maboko ma ba-Madian. » | |
| Judg | LinVB | 6:15 | Gedeon azongisi : « Nabondeli yo, Mokonzi, ndenge nini nabikisa Israel ? Libota lya ngai libota lya mpamba o ekolo ya Manase, mpe ngai mwana wa nsuka o ndako ya tata wa ngai. » | |
| Judg | LinVB | 6:17 | Gedeon alobi : « Soko ya solo olingi ngai, lakisa ngai elembo nayeba ’te ezali bobele yo moto olobeli ngai. | |
| Judg | LinVB | 6:18 | Nabondeli yo, zila awa, nakozonga epai ya yo. Nakoyela yo libonza mpe nakotia lyango liboso lya yo. » Mokonzi ayanoli : « Nakotikala awa tee okozonga. » | |
| Judg | LinVB | 6:19 | Gedeon akei koboma mwana ntaba, alambi yango na lomeko loko la fufu, asali mampa mazangi nkisi, atii nyama o ekoló mpe mafuta o nzungu, na nsima azongi o nse ya gbukulu mpe abonzeli ye. | |
| Judg | LinVB | 6:20 | Anzelu wa Yawe alobi na ye : « Kamata nyama mpe mampa mazangi nkisi, tia binso o libanga, mpe sopela byango mafuta. » Gedeon asali se bongo. | |
| Judg | LinVB | 6:21 | Anzelu wa Yawe azalaki na lingenda o loboko mpe abeti nyama na mampa na nsonge ya lingenda. Móto mobimi ut’o libanga mosilisi nyama na mampa mana. Mpe anzelu wa Yawe alimwi o miso ma ye. | |
| Judg | LinVB | 6:22 | Sikawa Gedeon ayebi ’te ezalaki bobele anzelu wa Yawe, bongo alobi : « Mokonzi wa ngai, mawa na ngai, mpamba te, namoni anzelu wa Yawe na miso. » | |
| Judg | LinVB | 6:24 | Gedeon atongeli Yawe etumbelo o esika ena mpe apesi yango nkombo : Yawe-Boboto. Tee lelo etumbelo ena ezali o Ofra ya Abiezer. | |
| Judg | LinVB | 6:25 | O butu bona Yawe alobi na Gedeon : « Kamata ngombe mobali o lopango la tata wa yo, ngombe ya mibu nsambo. Boma etumbelo ya Baal o lopango la tata wa yo, mpe likonzi lya nkisi ezali penepene. | |
| Judg | LinVB | 6:26 | Na nsima tongela Yawe, Nzambe wa yo, altare o mwa ngomba mpe bongisa yango malamu. Na nsima kamata ngombe mobali, boma yango mpe bonzela Yawe yango na nkoni ya likonzi lya nkisi okataki. » | |
| Judg | LinVB | 6:27 | Gedeon aponi basali zomi mpe asali lokola Yawe atindaki ye. Nzokande lokola abangaki bandeko ba ye mpe bato ba mboka, asali bongo na moi te, kasi na butu. | |
| Judg | LinVB | 6:28 | Bato ba mboka balongwi o mpongi na ntongo, bamoni ’te babomi etumbelo ya Baal, mpe bakati likonzi lya nkisi ezalaki wana mpe batumbi ngombe o altare batongaki sika. | |
| Judg | LinVB | 6:29 | Batunani : « Nani asali bongo ? » Bakei koluka mpe kotuna bato, bango balobi : « Gedeon, mwana wa Yoas asali yango ! » | |
| Judg | LinVB | 6:30 | Bato ba mboka balobi na Yoas : « Bimisa mwana wa yo, akufa, zambi abomi etumbelo ya Baal mpe akati likonzi lya nkisi ezalaki wana penepene. » | |
| Judg | LinVB | 6:31 | Yoas ayanoli bato bazali penepene na ye : « Bino bolingi kolongisa Baal ? Bolingi kosalisa ye ? Moto oyo alongisi Baal baboma ye liboso ’te ntongo etana. Soko Baal azali nzambe, amibikisa ye moko, mpo Gedeon abomi etumbelo ya ye. » | |
| Judg | LinVB | 6:32 | O mokolo mona bapesi Gedeon nkombo Yerubaal, zambi balobi ’te « Baal asambisa ye, mpamba te, ye moto abukaki etumbelo ya ye. » | |
| Judg | LinVB | 6:33 | Ba-Madian, ba-Amalek na bato ba Esti banso bayokani ; bakatisi Yordane mpe bapiki nganda o esobe ya Yizreel. | |
| Judg | LinVB | 6:34 | Elimo ya Yawe ekiteli Gedeon. Bongo Gedeon abeti mondule mpe bato ba Abiezer balandi ye. | |
| Judg | LinVB | 6:35 | Atindi bantoma o mokili mobimba mwa Manase, abengi mpe bango balanda ye. Na nsima atindi bantoma o mabota ma Aser, Zabulon na Neftali ; bango balandi ye lokola. | |
| Judg | LinVB | 6:36 | Gedeon alobi na Nzambe : « Soko ya solo olingi kobikisa Israel na maboko ma ngai lokola olobaki, | |
| Judg | LinVB | 6:37 | tala, nakotanda lomposo la mpata o etutelo ; soko mamio makiti se o lomposo la mpata, kasi mabelé mapoli te, nakoyeba ’te olingi kobikisa Israel na maboko ma ngai lokola olobaki. » | |
| Judg | LinVB | 6:38 | Esalemi se bongo. Na nta ntongo Gedeon atelemi, akamoli lomposo la mpata, abimisi mamio mpe atondisi kopo mobimba na mai. | |
| Judg | LinVB | 6:39 | Gedeon alobi na Nzambe : « Osilikela ngai te, soko natuni yo lisusu : Tika nameka elembo ya lomposo la mpata mbala ya ibale ; sala ’te lomposo la mpata lopolo te, kasi mamio makweya o mabelé bisika binso penepene ! » | |
Chapter 7
| Judg | LinVB | 7:1 | Na ntongontongo Yerubaal, ye nde Gedeon, na bato ba ye banso balongwi wana mpe bakei kopika nganda o En-Karod. Nganda ya ba-Madian ezalaki o Nordi ya bango, o esobe penepene na ngomba More. | |
| Judg | LinVB | 7:2 | Yawe alobi na Gedeon : « Bato ba yo baleki mingi mpo ’te nakaba ba-Madian o maboko ma bango. Mbele ba-Israel bakomikumisa esika ’te bapesa ngai lokumu mpe bakoloba : Tobiki na bokasi bwa biso moko ! | |
| Judg | LinVB | 7:3 | Bongo sakola maloba maye o matoi ma bato : Soko moto abangi mpe alengi, azonga o mboka mpe alongwa o ngomba Gelboe. » Bato nkoto ntuku ibale na ibale bazongi o mboka ; etikali se bato nkoto zomi. | |
| Judg | LinVB | 7:4 | Yawe alobi na Gedeon : « Bato baleki naino mingi. Kita na bango o libongo lya mai, kuna ngai moko nakomeka bango. Soko nalobi : Moto oyo akende na yo, akokende na yo. Mpe soko nalobi : Moto oyo akende na yo te, akokende na yo te. » | |
| Judg | LinVB | 7:5 | Gedeon akiti na bango epai ya mai, mpe Yawe alobi na ye : « Bato banso bakolete mai na lolemu lokola mbwa, tia bango epai yoko. Baye bakofukama o mabolongo mpo ya komele, tia bango epai esusu. » | |
| Judg | LinVB | 7:6 | Bato batii maboko penepene na monoko mpe baleti mai bongo, bazalaki nkama isato. Bato basusu banso bafukami o mabolongo. | |
| Judg | LinVB | 7:7 | Bongo Yawe alobi na Gedeon : « Nakobikisa bino na bato baye nkama isato baleti mai na lolemu, mpe nakokaba ba-Madian o maboko ma bino. Bato basusu banso bazonga o mboka. » | |
| Judg | LinVB | 7:8 | Bato baye nkama isato bakamati mbeki ya mai na mindule mya baninga. Na nsima Gedeon azongisi ba-Israel basusu banso o mboka ya bango. Aponi se bato nkama isato. Nganda ya ba-Madian ezalaki o liboso, o esobe. | |
| Judg | LinVB | 7:9 | Na butu Yawe alobi na Gedeon : « Teleme, kende kobunda na bato ba nganda, mpamba te, nakabi bango o maboko ma yo. | |
| Judg | LinVB | 7:11 | Eyoki yo kuna makambo nini bazali kosolola, okozwa mpiko ya sika na mpe nguya ya kobunda na bango. » Akei na mosaleli wa ye Pura mpe akomi o esika basoda bazalaki kokengele nganda. | |
| Judg | LinVB | 7:12 | Ba-Madian na ba-Amalek na bato ba Esti batandani o esobe. Bazalaki mingi lokola mapalela ; moto moko akoki kotanga kamela ya bango te, izalaki mingi lokola zelo o libongo lya mbu. | |
| Judg | LinVB | 7:13 | Ekomi Gedeon o esika ena, moto moko azalaki kosolola ndoto ya ye na moninga. Alobi : « Nalotoki ndoto : Namoni limpa lizali kozolongana o nganda ya ba-Madian, likei kotuta ema yoko ; bongo ema ekwei mpe ebulungani. » | |
| Judg | LinVB | 7:14 | Moninga wa ye azongisi : « Ekoki kozala bobele mopanga mwa Gedeon, mwana wa Yoas, moto wa Israel. Nzambe akabaki Madian na basoda ba ye banso o maboko ma ye. » | |
| Judg | LinVB | 7:15 | Eyoki Gedeon lisolo lya ndoto mpe ndimbola bapesi, afukami o nse. Azongi noki o nganda ya Israel, alobi : « Boteleme, zambi Yawe akabi nganda ya Madian o maboko ma bino ! » | |
| Judg | LinVB | 7:16 | Gedeon akaboli bato ba ye nkama isato mangomba masato ; apesi bango mindule na mbeki izalaki mpamba, na mpe bisungi mpo ya kotia o mbeki. | |
| Judg | LinVB | 7:17 | Alobi na bango : « Botala epai ngai nakozala mpe bosala lokola ngai nakosala. Soko nakomi penepene na nganda, bino bosala se lokola ngai nakosala. | |
| Judg | LinVB | 7:18 | Ngai na bato ba ngai tokobete mindule, bino mpe bobete mindule zongazonga na nganda mpe boganga : Mpo ya Yawe mpe mpo ya Gedeon ! » | |
| Judg | LinVB | 7:19 | Gedeon na bato monkama bazalaki na ye, bakomi pene na nganda o kati ya butu, o ntango bakengeli balongwi mpe batii bato ba sika. Babeti mindule mpe babuki mbeki izalaki o maboko ma bango. | |
| Judg | LinVB | 7:20 | O mangomba masato bato babeti mindule mpe babuki mbeki ; na loboko la mwasi basimbi bisungi, na loboko la mobali bakamati mindule mpo ya kobete. Bagangi : « Mopanga mpo ya Yawe mpe mpo ya Gedeon ! » | |
| Judg | LinVB | 7:21 | Batikali nye, moto na moto o esika ya ye zongazonga na nganda. Basoda ba nganda ya Madian babandi kopota mbangu, koganga makasi mpe kokima. | |
| Judg | LinVB | 7:22 | Awa bato nkama isato bazalaki kobete mindule, Yawe asali ’te o nganda bato banso bakoma kozokisana na mopanga. Banso bakimi tee o Bet-a-Sita, epai ya Sartan, tee o libongo lya Abel-Meola penepene na Tabat. | |
| Judg | LinVB | 7:23 | Ba-Israel ba Neftali, ba Aser mpe ba Manase mobimba basangani mpe balandi ba-Madian. | |
| Judg | LinVB | 7:24 | Gedeon atindi bantoma o ngomba inso ya Efraim na maloba maye : « Bokita ngomba mpe bokutana na ba-Madian. Bowela maziba manso ma mai liboso lya bango, tee o Bet-Bara mpe o Yordane. » Bato banso ba Efraim basangani mpe baweli maziba ma mai tee o Bet-Bara mpe o Yordane. | |
Chapter 8
| Judg | LinVB | 8:1 | Bato ba Efraim balobi na Gedeon : « Ntina nini osalaki biso likambo lina ? Okendeki kobunda na ba-Madian mpe obengaki biso te ! » Basilikeli ye mingi. | |
| Judg | LinVB | 8:2 | Gedeon ayanoli : « Mosala ngai nasalaki mokokani na mosala bino bosalaki ? Mosala mwa ba-Efraim mwa bolokoti mbuma itikalaki moleki mosala mwa Abiezer te, oyo abukaki mbuma ? | |
| Judg | LinVB | 8:3 | Nzambe akabaki bakambi ba Madian, Oreb na Zeeb, o maboko ma bino. Mosala mwa ngai mokokani nde na mosala mwa bino ? » Eyoki bango maloba mana, bakitisi mitema. | |
| Judg | LinVB | 8:4 | Gedeon akomi o Yordane, akatisi yango elongo na bato nkama isato bazalaki na ye. Ata balembeki mpenza, bakobi se kolanda banguna. | |
| Judg | LinVB | 8:5 | Alobi na bato ba Sukot : « Nabondeli bino, bopesa basoda bazali na ngai mampa, balembi mingi mpenza, mpe ngai nakolanda Zeba na Salmuna, bakonzi ba Madian. » | |
| Judg | LinVB | 8:6 | Bakolo ba Sukot bayanoli : « Zeba na Salmuna basili bakomi o maboko ma yo mpo ’te topesa basoda ba yo mampa ? » | |
| Judg | LinVB | 8:7 | Gedeon azongisi : « Malamu ! Kasi mokolo Yawe akokaba Zeba na Salmuna o maboko ma ngai, nakozokisa bino na nzube mpe na nsende ya eliki. » | |
| Judg | LinVB | 8:8 | Ut’o Sukot akei o Penuel mpe alobi na bato se maloba mana. Bato ba Penuel bayanoli se lokola bato ba Sukot balobaki. | |
| Judg | LinVB | 8:9 | Alobi lisusu na bato ba Penuel : « Soko nazongi awa nzoto kolongonu, nakobuka linongi lina. » | |
| Judg | LinVB | 8:10 | Zeba na Salmuna bazalaki o Karkor na basoda ba bango soki nkoto zomi na itano, baye ba limpinga lya Esti batikali na bomoi. Baye bakufaki bazalaki bato nkoto monkama na ntuku ibale ; banso bazalaki basoda bayebi kobunda na mopanga. | |
| Judg | LinVB | 8:11 | Gedeon aleki o nzela ya bato bakofa-ndaka o biema, epai ya Esti ya Noba na Yogbea mpe abundi etumba na banguna, o ntango bango bakanisaki soki te. | |
| Judg | LinVB | 8:12 | Zeba na Salmuna bakimi. Kasi Gedeon alandi bango mpe akangi bakonzi babale ba Madian, Zeba na Salmuna, akimisi basoda banso. | |
| Judg | LinVB | 8:14 | Akangi elenge mobali moko wa Sukot, atuni ye, mpe oyo akomi o monkanda nkombo ya bakonzi mpe bakolo ba Sukot : bato ntuku nsambo na nsambo. | |
| Judg | LinVB | 8:15 | Na nsima Gedeon akei epai ya bato ba Sukot mpe alobi : « Zeba na Salmuna bazali awa. Bosekeki ngai mpe bolobaki : Zeba na Salmuna basili bakomi o maboko ma yo mpo ’te topesa basoda ba yo mampa ? » | |
| Judg | LinVB | 8:16 | Akangi bakolo ba mboka, akamati nzube na nsende ya eliki mpe azokisi na yango ba-Sukot. | |
| Judg | LinVB | 8:18 | Na nsima atuni Zeba na Salmuna : « Bato bino bobomaki o Tabor bazalaki ndenge nini ? » Bazongisi : « Bazalaki lokola yo, bamononoki lokola bana ba mokonzi. » | |
| Judg | LinVB | 8:19 | Gedeon alobi : « Bazali bandeko ba ngai, bana ba mama moko. Lokola Yawe azali na bomoi, soko bobomaki bango te, mbele lelo nabomi bino te. » | |
| Judg | LinVB | 8:20 | Na nsima alobi na mwana wa ye wa yambo Yeter : « Teleme mpe boma bango. » Kasi elenge mobali abimisi mopanga mwa ye te, abangi, zambi azali naino elenge. | |
| Judg | LinVB | 8:21 | Sikawa Zeba na Salmuna balobi na Gedeon : « Teleme yo moko mpe boma biso, mpo yo moko ozali elombe ! » Gedeon atelemi mpe abomi Zeba na Salmuna ; na nsima akamati mitako mizalaki o nkingo ya kamela ya bango. | |
| Judg | LinVB | 8:22 | Ba-Israel balobi na Gedeon : « Yo, zala mokonzi wa biso, na nsima mwana wa yo na nkoko wa yo bakitana yo, zambi obikisi biso o maboko ma ba-Madian. » | |
| Judg | LinVB | 8:23 | Kasi Gedeon azongisi : « Ngai nakoyangela bino te, mwana wa ngai mpe te, se Yawe akoyangela bino. » | |
| Judg | LinVB | 8:24 | Mpe Gedeon abakisi : « Nalingi kosenge bino eloko yoko : moto na moto apesa ngai mpete yoko abotoli o etumba. » Baye bakufi o etumba bazalaki na mpete ya wolo, mpo bazalaki ba-Ismael. | |
| Judg | LinVB | 8:25 | Bato bazongisi : « Solo, tokopesa yo. » Batandi elamba o mabelé mpe banso babwaki mpete yoko ya iye babotoli o etumba. | |
| Judg | LinVB | 8:26 | Bozito bwa mpete ya wolo asengeki, bokoki mitako nkoto yoko na nkama nsambo. Bakisa biloko bya nkingo na biloko bya matoi na mpe bilamba bya longondo, biye bakonzi ba Madian bakolataka. Bakisa mpe nsinga ya mitako izalaki o nkingo ya kamela ya bango. | |
| Judg | LinVB | 8:27 | Gedeon asoni na yango efod mpe atii yango o mboka ya ye Ofra. Ba-Israel banso bayei kofukamela efod. Yango ekotisi Gedeon na libota lya ye o motambo mwa lisumu. | |
| Judg | LinVB | 8:28 | Bongo ba-Madian bayoki nsoni o miso ma ba-Israel ; batomboli mitó lisusu te mpe ekolo epemi mibu ntuku inei, mikolo minso mya bomoi bwa Gedeon. | |
| Judg | LinVB | 8:31 | Makango wa ye, oyo afandi o Sikem, aboteli ye mpe mwana mobali ; Gedeon apesi ye nkombo Abimelek. | |
| Judg | LinVB | 8:32 | Gedeon, mwana wa Yoas, aumeli mibu miike, na nsima awei. Bakundi ye o lilita lya tata wa ye Yoas o Ofra ya Abiezer. | |
| Judg | LinVB | 8:33 | Nsima ya liwa lya Gedeon, ba-Israel babandi lisusu kokumisa ba-Baal mpe bakomisi Baal-Berit nzambe wa bango. | |
| Judg | LinVB | 8:34 | Ba-Israel bakanisi lisusu Yawe Nzambe wa bango te, oyo abikisaki bango o maboko ma banguna banso ba penepene. | |
Chapter 9
| Judg | LinVB | 9:1 | Abimelek, mwana wa Yerubaal, akei o Sikem epai ya bandeko ba mama wa ye mpe epai ya banoko ba ye. Alobi na bango : | |
| Judg | LinVB | 9:2 | « Bokende kotuna bakolo ba mboka ba Sikem : Eloko nini eleki malamu o miso ma bino ? Bolingi kozala na bakonzi ntuku nsambo, banso bana ba Yerubaal, to bolingi kozala na mokonzi moko ? Boyeba ’te ngai nazali na bino makila moko ! » | |
| Judg | LinVB | 9:3 | Bandeko ba ye bayebisi bakolo ba mboka ba Sikem bobele maloba mana manso. Balingi se Abimelek, balobi : « Azali ndeko wa biso ! » | |
| Judg | LinVB | 9:4 | Bapesi ye mitako mya palata ntuku nsambo iye bazwi o tempelo ya Baal-Berit. Abimelek akamati myango mpe afuti bato ba mpamba mpe ba mobulu mpo balanda ye. | |
| Judg | LinVB | 9:5 | Na nsima akei o ndako ya tata wa ye o Ofra, mpe abomi bandeko ba ye, bana ba Yerubaal, bato ntuku nsambo o libanga se lyoko. Ebiki bobele Yotam, mwana wa nsuka wa Yerubaal, zambi amibombaki. | |
| Judg | LinVB | 9:6 | Na nsima bakolo ba mboka banso ba Sikem na Bet-Milo basangani likita penepene na wenge eye ezali o Sikem, mpe baluboli Abimelek mokonzi. | |
| Judg | LinVB | 9:7 | Bayei koyebisa likambo lyango na Yotam. Yotam atelemi o nsonge ya ngomba Garizim mpe agangi : « Boyoka ngai, bankumu ba Sikem, mpo ’te Nzambe ayoka bino. | |
| Judg | LinVB | 9:8 | Mokolo moko nzete ya zamba ikei mobembo mpo ya kopono mokonzi. Balobi na nzete ya oliva : ‘Zala mokonzi wa biso !’ | |
| Judg | LinVB | 9:9 | Nzete ya oliva ezongisi : ‘Bolingi natika kopesa mafuta makosepelisa banzambe na bato, mpo ’te nakoma mokonzi wa bino ?’ | |
| Judg | LinVB | 9:11 | Nzete ya figi ezongisi : ‘Bolingi natika kobimisa nsolo mpimbo mpe natika kobota mbuma elengi mpo ’te nakoma mokonzi wa bino ?’ | |
| Judg | LinVB | 9:13 | Nzete ya vino ezongisi : ‘Bolingi natika kopesa vino ekosepelisa banzambe na bato mpo ’te nakoma mokonzi wa bino ?’ | |
| Judg | LinVB | 9:15 | Mpe nzete ya nzube ezongisi : ‘Soko ya solo boyei na motema malamu mpe bolingi kolubola ngai mokonzi wa bino, boya koluka esika ya malili penepene na ngai. Kasi soko bolingi bongo te, móto mokobima o nzete ya nzube mpe mokozikisa sédere ya Libano.’ | |
| Judg | LinVB | 9:16 | Boluboli Abimelek mokonzi na mayele malamu mpe na motema moko, solo ? Ya solo, bosalaki Yerubaal na libota lya ye lokola ekoki na mosala mwa ye ? | |
| Judg | LinVB | 9:17 | Tata wa ngai abunelaki bino, mpe andimaki kokufa mpo ya kobikisa bino o maboko ma ba-Madian, | |
| Judg | LinVB | 9:18 | kasi bino botomboki na libota lya ye, bobomi bana ba ye ntuku nsambo o libanga se lyoko ; bokomisi Abimelek, mwana wa moombo wa ye, mokonzi wa bakolo ba Sikem, zambi azali ndeko wa bino. | |
| Judg | LinVB | 9:19 | Soko bosalaki bongo na bosembo, mpe na motema moko solo, soko bosalaki Yerubaal na mpe libota lya ye malamu, bozala na esengo mpo ya Abimelek, mpe ye azala na esengo mpo ya bino. | |
| Judg | LinVB | 9:20 | Kasi soko ezali bongo te, móto móbima o Abimelek mpe mósilisa bankumu ba Sikem na Bet-Milo ; móto móbima mpe o bankumu ba Sikem na Bet-Milo mpe mósilisa Abimelek ! » | |
| Judg | LinVB | 9:23 | Na nsima Nzambe abebisi boyokani kati ya Abimelek na bakolo ba Sikem, bongo bakolo ba Sikem baboyi Abimelek. | |
| Judg | LinVB | 9:24 | Ebongoki ’te Abimelek azwa etumbu mpo ya bana ba Yerubaal ntuku nsambo abomaki, mpe makila ma bango makwela Abimelek, oyo abomaki bandeko ba ye, makwela mpe bakolo ba Sikem, baye basalisaki ye na bobomi bandeko ba ye. | |
| Judg | LinVB | 9:25 | Bakolo ba Sikem batindi bato o kati ya ngomba mpo ’te babombama mpe babotolo biloko bya bato banso bakoleka kuna ? Bato bayebisi Abimelek mpo yango. | |
| Judg | LinVB | 9:26 | Gaal, mwana wa Obed, aleki o Sikem elongo na bandeko ba ye, mpe bakolo ba Sikem batii mitema na ye. | |
| Judg | LinVB | 9:27 | Mokolo moko bakei o bilanga kobuka mbuma ya vino. Bakamoli mbuma bazwi, nsima balengeli limpati. Bakei o tempelo ya nzambe wa bango, balei mpe bameli ; nsima batombeli Abimelek bobe. | |
| Judg | LinVB | 9:28 | Gaal, mwana wa Obed, agangi : « Abimelek nde nani o Sikem mpo ’te akomisa biso baombo ba ye ? Ebongoki te ’te Abimelek, mwana wa Yerubaal, na kapita wa ye Zebul basalela bato ba Amor, tata wa Sikem ? Bongo ntina nini biso tosalela ye ? | |
| Judg | LinVB | 9:29 | Soko nazalaki mokonzi wa bango, mbele nakokimisa Abimelek o ngwende mpe nakoloba na ye : Luka basoda basusu mingi, na nsima tobunda biso na yo ! » | |
| Judg | LinVB | 9:31 | Atindeli Abimelek bantoma na bonkutu mpo ’te bayebisa ye boye : « Gaal, mwana wa Obed, ayei o Sikem elongo na bandeko ba ye ; bazali kosala ’te bato ba mboka batombokela yo. | |
| Judg | LinVB | 9:33 | Na nsima soko ntongo ekomi kotana, longwa kuna mpe pota mbangu epai ya mboka. Soko Gaal na bato ba ye bayei kozwana na yo, sala na bango lokola okoki. » | |
| Judg | LinVB | 9:34 | Bongo Abimelek, elongo na bato ba ye, bakei na butu kobombama penepene na Sikem ; bato ba ye bakabwani na mampinga manei. | |
| Judg | LinVB | 9:35 | Gaal, mwana wa Obed, abimi o ezibeli ya mboka, esika atelemi. Abimelek na bato ba ye babimi o esika babombamaki. | |
| Judg | LinVB | 9:36 | Emoni Gaal bango, alobi na Zebul : « Tala bato bazali kokita ngomba. » Kasi Zebul ayanoli : « Ozali komono molili mwa ngomba mpe okanisi ’te ezali bato. » | |
| Judg | LinVB | 9:37 | Gaal alobi lisusu : « Tala bato bazali kokita ngomba ‘Litolu lya Mokili’, mpe basusu bazali kouta epai ya ‘Wenge ya banganga nkisi’. » | |
| Judg | LinVB | 9:38 | Zebul alobi : « Obosani nde maloba ma yo : Abimelek azali nani mpo ’te tokoma baombo ba ye ? Okinolaki bango te ? Kende kokutana na bango sikawa mpe bunda bitumba. » | |
| Judg | LinVB | 9:40 | Kasi akoki te mpe akimi. Abimelek alandi ye. Bato ba Gaal mingi bakwei mpe bakufi liboso ’te bakoma o ezibeli ya mboka. | |
| Judg | LinVB | 9:41 | Abimelek akei kofanda o Aruma, mpe Zebul abengani Gaal na bandeko ba ye, apekisi bango bafanda o Sikem lisusu te. | |
| Judg | LinVB | 9:42 | Mokolo mwa nsima bato balongwi o mboka mpe bakei o esobe ; bayebisi Abimelek likambo lina. | |
| Judg | LinVB | 9:43 | Akamati bato ba ye mpe akaboli bango na mangomba masato, bakei kobombama o bilanga. Emoni ye ’te bato bazali kobima o mboka, akei kobunda na bango mpe alongi bango. | |
| Judg | LinVB | 9:44 | Abimelek elongo na lingomba lya bato ba ye, akei mbangu epai ya mboka mpe atelemi o ezibeli ya mboka ; mamgomba masusu mabale makei kobunda na baye bazali o esobe mpe babomi bango. | |
| Judg | LinVB | 9:45 | Mokolo mobimba Abimelek abundi na bato ba mboka ; abotoli mboka, abomi bato banso. Abomi mpe mboka mpe abwakeli yango mongwa. | |
| Judg | LinVB | 9:46 | Eyoki bakolo ba Migdal-Sikem nsango ena, banso bakei kosangana o mobenga mozali o nse ya tempelo ya El-Berit. | |
| Judg | LinVB | 9:48 | Bongo Abimelek abuti ngomba Salmon elongo na bato ba ye. Akamati soka, akati etapi ya nzete, atomboli yango mpe atii yango o lipeke lya ye ; alobi na bato ba ye : « Bomoni ndenge nasali, bino mpe bosala bongo noki. » | |
| Judg | LinVB | 9:49 | Bato ba ye banso bakati etapi mpe balandi Abimelek. Babwaki byango penepene na mobenga mpe batumbi byango likolo lya mobenga esika bato bazalaki. Bato banso ba Migdal-Sikem bakufi, bazalaki soki nkoto yoko, babali na basi. | |
| Judg | LinVB | 9:51 | O kati ya mboka linongi litongami makasi esika babali, basi na bakolo banso ba mboka bakimaki. Bakangi ezibeli nsima ya bango mpe babuti epai ya likolo. | |
| Judg | LinVB | 9:52 | Abimelek asili akomi pene na linongi mpe abandi etumba ; ntango akomi penepene na ezibeli ya linongi mpe alingi kotumba lyango, | |
| Judg | LinVB | 9:54 | Abimelek abengi noki elenge mobali oyo amemi bibuneli bya ye, alobi na ye : « Bimisa mopanga mwa yo mpe boma ngai mpo ’te bato baseke ngai te na bolobi ’te : Mwasi moto abomi ye. » Mosali wa ye atuboli ye, mpe akufi. | |
| Judg | LinVB | 9:56 | Nzambe azongiseli Abimelek mabe asalaki tata wa ye awa abomaki bandeko ba ye ntuku nsambo. | |
Chapter 10
| Judg | LinVB | 10:1 | Nsima ya Abimelek, Tola, mwana wa Pua, nkoko wa Dodo, moto wa libota lya Izakar, akomi mokonzi mpo ya kobikisa Israel. Afandi o Samir o ngomba ya Efraim. | |
| Judg | LinVB | 10:2 | Azalaki zuzi o Israel mibu ntuku ibale na isato ; nsima awei mpe bakundi ye o Samir. | |
| Judg | LinVB | 10:3 | Nsima ya ye, Yair, moto wa Galaad akomi mokonzi. Azalaki zuzi o Israel mibu ntuku ibale na mibale. | |
| Judg | LinVB | 10:4 | Azalaki na bana babali ntuku isato, baye bakobutelaka mpunda ntuku isato, na mpe mboka ntuku isato iye bakotangaka tee lelo « Nganda ya Yair » o mokili mwa Galaad. | |
| Judg | LinVB | 10:6 | Ba-Israel babandi lisusu kosala mabe o miso ma Yawe. Bakumisi ba-Baal na ba-Astarte na mpe banzambe ba Aram na Sidoni, ba Moab, ba Amon mpe ba Filisti. Batiki Yawe mpe bakumisi ye lisusu te. | |
| Judg | LinVB | 10:7 | Yawe asilikeli ba-Israel mpenza mpe akabi bango o maboko ma ba-Filisti mpe ba-Amon. | |
| Judg | LinVB | 10:8 | Bango banyati ba-Israel o mobu mona mpe banyokoli bato banso ba Israel baye bafandi o ngambo ya Yordane, o ekolo ya ba-Amor, o mokili mwa Galaad, mibu zomi na mwambe mobimba. | |
| Judg | LinVB | 10:9 | Ba-Amon bakatisi Yordane mpo ya kobunda etumba na Yuda, na Benyamin mpe na ekolo ya Efraim. Ba-Israel bakomi koyoka mpasi mingi. | |
| Judg | LinVB | 10:10 | O ntango ena ba-Israel babeleli Yawe, balobi : « Tosali mabe o miso ma yo, zambi totiki Nzambe wa biso mpe tokumisi ba-Baal. » | |
| Judg | LinVB | 10:12 | ba-Sidoni, ba-Amalek na ba-Madian banyokoloki bino mpe bino bobelelaki ngai, nabikisaki bino o maboko ma bango te ? | |
| Judg | LinVB | 10:13 | Kasi bino botiki ngai mpe bokumisi banzambe basusu. Yango wana nakobikisa bino lisusu te. | |
| Judg | LinVB | 10:14 | Bokende sikawa kobelela banzambe baye bino moko boponoki ! Babikisa bino o ntango bozali koyoka mpasi. » | |
| Judg | LinVB | 10:15 | Bana ba Israel balobi na Yawe : « Tosali mabe, yango wana sala na biso lokola olingi, kasi lelo bikisa biso. » | |
| Judg | LinVB | 10:16 | Balongoli banzambe ba bikolo bisusu o kati ya bango mpe bakumisi Yawe lisusu. Mpe Yawe akokaki kondima lisusu te ’te Israel ayoka mpasi. | |
| Judg | LinVB | 10:17 | Ba-Amon bayei kosangana mpe kopika nganda o mokili mwa Galaad. Bato ba Israel basangani lokola, mpe bapiki nganda o Mispa. | |
Chapter 11
| Judg | LinVB | 11:1 | Yefta, moto wa Galaad, azalaki elombe o etumba. Mama wa ye azalaki ndumba. Tata aboti Yefta, nkombo ya ye mpe Galaad. | |
| Judg | LinVB | 11:2 | Kasi mwasi wa Galaad abotaki mpe bana. Ekoli bana ba ye, babengani Yefta mpe balobi na ye : « Yo okoki kozwa biloko bya tata wa biso te, zambi ozali mwana wa mwasi mosusu. » | |
| Judg | LinVB | 11:3 | Yefta akimi bandeko ba ye mpe akei kofanda mosika o mokili mwa Tob. Bato ba mpamba basangani na ye ; elongo na ye bakei koyibela bato biloko. | |
| Judg | LinVB | 11:5 | Awa ba-Amon babundi na Israel, bakolo ba Galaad bakei koluka Yefta o mokili mwa Tob. | |
| Judg | LinVB | 11:7 | Yefta alobi na bakolo ba Galaad : « Bino boboyaki ngai liboso mpe bobenganaki ngai o ndako ya tata. Mpo nini boluki ngai sikawa, awa bokomi na kwokoso ? » | |
| Judg | LinVB | 11:8 | Bakolo ba Galaad bayanoli : « Tozongi epai ya yo se na ntina ’te ozala mokonzi wa biso, mokonzi wa bato banso ba Galaad. » | |
| Judg | LinVB | 11:9 | Yefta azongiseli bakolo ba Galaad boye : « Soko bolingi ’te nazonga mpo ya kobunda na ba-Amon, mpe soko Yawe akokaba bango o maboko ma ngai, ngai moto nakozala mokonzi wa bino. » | |
| Judg | LinVB | 11:11 | Yefta akei elongo na bakolo ba Galaad. Bato ba mboka batii ye mokonzi mpe komanda wa bango. Yefta alobi lisusu maloba mana manso o miso ma Yawe kuna o Mispa. | |
| Judg | LinVB | 11:12 | Yefta atindeli mokonzi wa ba-Amon bantoma na maloba maye : « Biso na yo likambo nini mpo ’te oya kobunda na ekolo ya ngai ? » | |
| Judg | LinVB | 11:13 | Mokonzi wa ba-Amon alobi na bantoma ba Yefta : « O ntango babimaki o Ezipeti, bato ba Israel babotoloki mokili mwa ngai banda moluka Arnon tee moluka Yabok mpe tee Yordane. Sikawa bazongisa mwango na boboto ! » | |
| Judg | LinVB | 11:15 | Alobi na ye : « Yoka maloba ma ngai : Israel abotoloki mokili mwa Moab te, mokili mwa ba-Amon mpe te. | |
| Judg | LinVB | 11:16 | Mpamba te, o ntango babimaki o Ezipeti, ba-Israel batambolaki o eliki tee mbu ya Nsoló mpe bakomaki o Kades. | |
| Judg | LinVB | 11:17 | Ba-Israel batindelaki mokonzi wa Edom maloba maye : Tobondeli yo, bolingisa biso toleka o mokili mwa yo. Kasi mokonzi wa Edom alingisaki bango te. Batindelaki mpe mokonzi wa Moab bantoma, kasi ye mpe alingisaki bango te ; Israel atikalaki o Kades. | |
| Judg | LinVB | 11:18 | Na nsima batambolaki bobele o eliki, balekaki mpembeni ya mokili mwa Edom mpe na mokili mwa Moab mpe bakomaki epai ya Esti ya mokili mwa Moab. Bapikaki nganda o ngambo ya Arnon, kasi bakotoki o mokili mwa Moab te, mpo Arnon ezali ndelo ya Moab. | |
| Judg | LinVB | 11:19 | Bato ba Israel batindaki lisusu bantoma epai ya Sikon, mokonzi wa ba-Amor, balobaki : Tobondeli yo, bolingisa biso toleka o mokili mwa yo tee tokokoma esika tozali kokende. | |
| Judg | LinVB | 11:20 | Kasi Sikon aboyaki kolekisa ba-Israel o mokili mwa ye, asangisaki bato ba ye banso bafandi o Yakas mpe abundaki na ba-Israel. | |
| Judg | LinVB | 11:21 | Yawe akabaki Sikon na basoda ba ye banso o maboko ma ba-Israel. Ba-Israel balongaki bango, | |
| Judg | LinVB | 11:22 | mpe bakomaki bankolo ba mokili mobimba mwa ba-Amor banda Arnon tee Yabok, ut’o eliki tee Yordane. | |
| Judg | LinVB | 11:23 | Yawe, Nzambe wa Israel, abengani ba-Amor mpo ya bato ba ye ba-Israel, mpe sikawa olingi kobotolo biso mokili mona ? | |
| Judg | LinVB | 11:24 | Yo moko ozali na mokili moye Kemos, nzambe wa yo, apesaki yo. Bongo mokili moye Yawe, Nzambe wa biso, apesaki biso tokoki kozala na mango te ? | |
| Judg | LinVB | 11:25 | Mpe sikawa yo oleki nde Balak, mwana wa Sipor, mokonzi wa Moab ? Ye alukaki matata mpo abundisa Israel ? | |
| Judg | LinVB | 11:26 | O ntango ba-Israel bayaki kofanda o Kesbon mpe o mboka isusu ya penepene, o Aroer mpe mboka isusu ya penepene, mpe o mboka inso o libongo lya moluka Arnon, eleki sikawa mibu nkama isato, mpo nini obotoloki mboka ina te o eleko ena ? | |
| Judg | LinVB | 11:27 | Ngai nasalaki yo mabe te, kasi yo moto osali ngai mabe awa obundisi ngai. Yawe Zuzi monene akata lelo likambo kati ya ba-Israel na ba-Amon. » | |
| Judg | LinVB | 11:29 | Elimo ya Nzambe ekiteli Yefta. Bongo Yefta akatisi Galaad, Manase mpe Mispa o ekolo ya Galaad tee akomi o ekolo ya ba-Amon. | |
| Judg | LinVB | 11:31 | ntango nakozonga mpe nasili kolonga ba-Amon, oyo akobima liboso o ndako ya ngai mpo ya kokutana na ngai, akozala wa Yawe, nakobonza ye bo moboma. » | |
| Judg | LinVB | 11:33 | Akweisi bango mpe abotoli mboka ntuku ibale banda Aroer tee Minit, tee Abel-Keramim. Asilisi bango nye, mpe ba-Amon bayoki nsoni mingi o miso ma bato ba Israel. | |
| Judg | LinVB | 11:34 | Mokolo Yefta azongi o Mispa o ndako ya ye, tala mwana wa ye wa mwasi abimi mpo ’te ayamba ye, abandi kobina ntango ayoki ’te babeti mbonda. Yefta abotaki mwana se moko, azali na mwana mosusu wa mobali to wa mwasi te. | |
| Judg | LinVB | 11:35 | Awa amoni mwana, apasoli bilamba mpe agangi : « Mwana wa ngai, oyokisi ngai mpasi boye ! Okotisi ngai o likambo linene. Ngai nalayelaki Yawe, nakoki kozonga nsima te ! » | |
| Judg | LinVB | 11:36 | Mwana mwasi alobi na tata wa ye : « Tata, awa olayelaki Yawe, sala na ngai lokola olakelaki ye, zambi Yawe asalisaki yo mpo ya kosilisa bato ba Amon, banguna ba yo. » | |
| Judg | LinVB | 11:37 | Na nsima alobi lisusu na tata : « Nabondeli yo, pesa ngai sanza ibale, nakende kofanda o kati ya ngomba, bongo elongo na baninga ba ngai basi nalela bomoi bwa ngai, awa naboti ata mwana moko te. » | |
| Judg | LinVB | 11:38 | Tata andimi mpe atiki ye akende sanza ibale. Mwana akei epai ya ngomba elongo na baninga basi, baleli bolenge bwa ye, ayoki motema mpasi zambi aboti te. | |
| Judg | LinVB | 11:39 | Nsima ya sanza ibale azongi epai ya tata mpe Yefta asali na ye lokola alakelaki. Mwana wa ye ayebaki mobali te ; bongo ekomi momeseno o Israel, | |
Chapter 12
| Judg | LinVB | 12:1 | Bato ba Efraim basangani mpe bakatisi Yordane epai ya Safon. Balobi na Yefta : « Mpo nini okendeki kobunda na ba-Amon mpe obengaki biso te tokende na yo elongo ? Tokotumba yo o ndako ya yo. » | |
| Judg | LinVB | 12:2 | Yefta azongisi : « Ngai na bato ba ngai tozalaki na likambo linene na ba-Amon. Nabengaki bino, kasi bobikisaki ngai o maboko ma bango te. | |
| Judg | LinVB | 12:3 | Emonoki ngai ’te boyaki kosalisa ngai te, nakangaki motema, nabangaki liwa te mpe nakendeki kobunda na ba-Amon mpe Yawe akabaki bango o maboko ma ngai. Mpo nini boyei kobundisa ngai lelo ? » | |
| Judg | LinVB | 12:4 | Bongo Yefta asangisi bato banso ba Galaad mpe abundi etumba na ba-Efraim ; bato ba Galaad balongi ba-Efraim, zambi bango balobaki : « Bino ba-Galaad bozali bobele ba-Efraim, bokimaki mokili mwa Efraim na Manase. » | |
| Judg | LinVB | 12:5 | Bato ba Galaad bakangaki nzela o bisika bakokatisaka Yordane mpo ya kokoma o Efraim. Soko moto wa Efraim alingi kokima, alobi : « Lingisa ngai nakatisa ebale », ba-Galaad batuni ye : « Yo moto wa Efraim ? » Soko ayanoli : « Te ! », | |
| Judg | LinVB | 12:6 | ba-Galaad balobi : « Loba Shibolet », soko moto oyo alobi « Sibolet », zambi ayebi koloba liloba lyango malamu te, bakangi ye mpe babomi ye bobele o bisika bakokatisaka mai. O eleko ena bato ba Efraim nkoto inei na ibale bakufi. | |
| Judg | LinVB | 12:7 | Yefta azalaki zuzi o Israel mibu motoba. Na nsima Yefta, moto wa Galaad, awei mpe bakundi ye o mboka ya ye Galaad. | |
| Judg | LinVB | 12:9 | Abotaki bana babali ntuku isato. Abalisi bana basi ntuku isato na babali ba ekolo esusu, mpe abalisi bana ba ye bilenge basi ba ekolo esusu. Azalaki zuzi o Israel mibu nsambo. | |
| Judg | LinVB | 12:11 | Nsima ya ye Elon wa libota lya Zabulon akomi zuzi o Israel. Ayangeli Israel mibu zomi. | |
| Judg | LinVB | 12:14 | Azalaki na bana babali ntuku inei mpe na bankoko babali ntuku isato. Bango bazalaki kotambwisa mpunda ntuku nsambo. Ayangeli Israel mibu mwambe. | |
Chapter 13
| Judg | LinVB | 13:1 | Ba-Israel babandi kosala mabe lisusu o miso ma Yawe, mpe Yawe akabi bango o maboko ma ba-Filisti mibu ntuku inei. | |
| Judg | LinVB | 13:2 | Ezalaki o mboka Sorea moto moko wa libota lya Dan, nkombo ya ye Manoa. Mwasi wa ye ekomba, abotaki te. | |
| Judg | LinVB | 13:4 | kasi okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Okeba banda lelo : omele vino to masanga makasi te, olia eloko mbindo te. | |
| Judg | LinVB | 13:5 | Mpamba te, okozwa zemi, okobota mwana mobali ; bakokata ye nsuki te, zambi akobonzama na Nzambe ut’o libumu lya mama wa ye ; ye moto akobikisa bana ba Israel o maboko ma ba-Filisti. » | |
| Judg | LinVB | 13:6 | Mwasi akei koyebisa mobali wa ye : « Moto wa Nzambe abimelaki ngai ; elongi ya ye lokola elongi ya anzelu wa Nzambe, azalaki kitoko mpenza. Natuni ye te esika auti, ye mpe ayebisi ngai nkombo ya ye te. | |
| Judg | LinVB | 13:7 | Kasi alobi na ngai : Okozwa zemi, okobota mwana mobali ; bongo okeba : omele vino to masanga makasi te, olia eloko mbindo te, zambi mwana akobonzama na Nzambe ut’o libumu lya mama wa ye. » | |
| Judg | LinVB | 13:8 | Manoa abondeli Yawe, alobi : « E Mokonzi, nabondeli yo, moto wa Nzambe oyo otindeli biso aya mbala esusu mpo ayebisa biso nini tosengeli kosala na mwana oyo tokobota. » | |
| Judg | LinVB | 13:9 | Nzambe andimi losambo la Manoa. Anzelu wa Nzambe ayei lisusu kotala mwasi. Azalaki o bilanga, kasi mobali wa ye Manoa azalaki na ye te. | |
| Judg | LinVB | 13:10 | Mwasi akei mbangu koyebisa mobali wa ye alobi na ye : « Moto oyo ayaki awa mokolo mosusu, abimelaki ngai lisusu. » | |
| Judg | LinVB | 13:11 | Manoa atelemi, alandi mwasi wa ye, akomi epai ya moto ona, atuni ye : « Yo moto osololaki na mwasi oyo ? » Azongisi : « Iyo, ezali bobele ngai. » | |
| Judg | LinVB | 13:12 | Manoa atuni ye : « Sikawa, awa maloba ma yo malingi masalema, mobeko nini tosengeli kolanda mpo ya mwana, mpe boniboni tokoki kosala mpo ya ye ? » | |
| Judg | LinVB | 13:14 | Alia mbuma yoko ya nzete ya vino te, amele vino to lotoko te ; alia eloko mbindo te ; atosa mibeko minso natindaki ye. » | |
| Judg | LinVB | 13:15 | Manoa alobi na anzelu wa Yawe : « Ondima tofandisa yo moke mpe tolambela yo mwana ntaba ! » | |
| Judg | LinVB | 13:16 | Anzelu wa Yawe alobi na Manoa : « Ata ofa-ndisi ngai, nakolia bilei bya yo te, kasi soko olingi kotumba libonza, bonzela Yawe lyango. » Manoa ayebi te ’te moto oyo azali anzelu wa Yawe. | |
| Judg | LinVB | 13:17 | Manoa atuni anzelu wa Yawe : « Nkombo ya yo nani mpo ’te tokoka kokumisa yo o mokolo maloba ma yo makosalema ? » | |
| Judg | LinVB | 13:18 | Anzelu wa Yawe azongisi : « Mpo nini olingi koyeba nkombo ya ngai ? Ezali mobombamo. » | |
| Judg | LinVB | 13:19 | Manoa akamati mwana ntaba mpe bilei ; o libanga abonzeli Yawe yango. Yawe asali likambo lya kokamwa o miso ma Manoa na mwasi wa ye : | |
| Judg | LinVB | 13:20 | mololi moye molongwi o altare mpe mobuti o likolo momemi anzelu wa Yawe. Emoni Manoa na mwasi wa ye likambo lina, bakwei bilongi o nse. | |
| Judg | LinVB | 13:21 | Anzelu wa Yawe amilakisi lisusu na Manoa mpe na mwasi wa ye te. Bongo Manoa ayebi sikawa ’te ezalaki anzelu wa Yawe. | |
| Judg | LinVB | 13:23 | Kasi mwasi wa ye alobi : « Soko Yawe alingaki ’te tokufa, mbele andimaki libonza o maboko ma biso te, mbele alakisaki biso mana manso te, mbele ayebisaki biso maloba mana manso te. » | |
| Judg | LinVB | 13:24 | Mwasi aboti mwana mobali, apesi ye nkombo Samson. Mwana akoli mpe Yawe abenisi ye. | |
Chapter 14
| Judg | LinVB | 14:2 | Azongi mpo ’te ayebisa tata na mama wa ye, alobi : « Namoni elenge mwasi wa ba-Filisti o Timna. Bokende kokamata ye mpo nabala ye. » | |
| Judg | LinVB | 14:3 | Tata na mama wa ye balobi : « O libota lya yo mpe o ekolo ya yo bana basi bazali te mpo ’te okende kobala mwasi wa ba-Filisti, bato bakatemi nzoto te ? » Kasi Samson ayanoli tata wa ye : « Balela ngai bobele ye, zambi nalingi ye mingi. » | |
| Judg | LinVB | 14:4 | Tata na mama wa ye bayebaki te ’te mpo yango euti na Yawe, zambi Yawe azali koluka ba-Filisti na makambo. O eleko ena ba-Filisti bazalaki kokonza Israel. | |
| Judg | LinVB | 14:5 | Samson akei bongo o Timna elongo na tata mpe na mama wa ye. Ekomi ye o bilanga bya nzete ya vino o Timna, amoni mwana ntambwe eyei kokutana na ye, egangi makasi. | |
| Judg | LinVB | 14:6 | Elimo ya Yawe ekiteli Samson mpe, ata azalaki na eloko yoko o maboko te, apasoli ntambwe na biteni bibale lokola bakoseseke mwana ntaba ; kasi asololi mpo yango na tata mpe na mama wa ye te. | |
| Judg | LinVB | 14:8 | Mwa mikolo nsima Samson azongi mpo ’te abala mwasi ona. Alandi nzela esusu mpo ’te atala ebembe ya ntambwe mpe o kati ya ebembe amoni lingambo lya nzoi mpe mafuta. | |
| Judg | LinVB | 14:9 | Akamati mango o maboko mpe alei mango o nzela. Ekomi ye o mboka ya tata na mama wa ye, apesi bango mpe mango, kasi ayebisi te ’te azwi mango o kati ya ebembe ya ntambwe. | |
| Judg | LinVB | 14:10 | Na nsima tata wa ye akei o mboka ya mwasi, mpe Samson ala-mbi limpati linene lokola bilenge babali bameseni kosala. | |
| Judg | LinVB | 14:12 | Samson alobi na baninga ba ye : « Nalingi kosapela bino sambole. Soko bokoki kopesa ngai ndimbola o kati ya mikolo miye nsambo mya eyenga, nakopesa bino minkoto ntuku isato na mpe bilamba bisusu ntuku isato. | |
| Judg | LinVB | 14:13 | Kasi soko bokoki kopesa ngai ndimbola te, bino bokopesa ngai minkoto ntuku isato na mpe bilamba bisusu ntuku isato. » Bango balobi : « Sapela biso sambole ya yo. » | |
| Judg | LinVB | 14:14 | Samson alobi : « Eloko ya kolia ezwami epai ya oyo akoliaka, eloko elengi ezwami epai ya oyo aleki na bokasi. » Nsima ya mikolo misato bilenge bakokaki kopesa ndimbola ya sambole naino te. | |
| Judg | LinVB | 14:15 | O mokolo mwa nsambo balobi na mwasi wa Samson : « Bondela mobali wa yo alimbolela biso sambole. Soko olongi te, tokotumba yo na bandeko ba yo banso. Obengaki biso o limpati mpo ya kobotolo biso biloko ? » | |
| Judg | LinVB | 14:16 | Mwasi wa Samson abandi kolanda mobali wa ye mpe kolela : « Ozali bobele koyina ngai, olingi ngai te. Osapelaki bato ba ekolo ya ngai sambole mpe oyebisaki ngai eyano te. » Alobi na ye : « Napesaki ndimbola ata na tata mpe mama te, bongo nalimbolela yo yango ? » | |
| Judg | LinVB | 14:17 | Mwasi azalaki kolanda ye na boleli mikolo nsambo mya limpati. Mokolo mwa nsambo Samson apesi ye eyano, zambi mwasi atungisaki ye mingi ; oyo akei koyebisa bato ba ekolo ya ye ndimbola ya sambole. | |
| Judg | LinVB | 14:18 | Mokolo mwa nsambo, moi mokiti naino te, bato ba mboka balobi na Samson : « Eloko nini eleki mafuta ma nzoi na elengi, mpe nyama nini eleki ntambwe na bokasi ? » Samson azongiseli bango : « Soko bokataki bilanga na ngombe mwasi ya ngai te, mbele boyebaki ndimbola ya sambole te. » | |
| Judg | LinVB | 14:19 | Elimo ya Yawe ekiteli Samson. Akei o Askalon, abomi bato ntuku isato, akamati bilamba bya bango mpe apesi byango na baye bapesaki ndimbola ya sambole. Na nkanda mpenza azongi o ndako ya tata. | |
Chapter 15
| Judg | LinVB | 15:1 | Nsima ya mwa mikolo, ekomi eleko ya bobuki mbuma ya mampa. Samson akei kotala mwasi wa ye lisusu ; akei kotikela ye mwana ntaba, alobi : « Nayei kotala mwasi wa ngai, nalingi kokoto o ndako ya ye. » Kasi bokilo alingisi ye te. | |
| Judg | LinVB | 15:2 | Alobi na ye : « Nakanisaki ’te ya solo okomi koyina ye mpe napesaki ye na kapita wa baninga baye bafandaki na yo o meza. Kasi mozimi wa ye azali, aleki ye na kitoko. Kamata ye o esika ya motomolo wa ye ! » | |
| Judg | LinVB | 15:3 | Samson alobi na bango : « Sikawa ba-Filisti batuna ngai lisusu te ; solo, nakosala bango mabe ! » | |
| Judg | LinVB | 15:4 | Samson akei ; akangi gambala nkama isato mpe aluki bisungi. Akangisi mikila mya yango mibale mibale mpe atii esungi o kati. | |
| Judg | LinVB | 15:5 | Nsima apelisi bisungi mpe atiki gambala ikota o bilanga bya ba-Filisti. Bongo atumbi matiti na mbuma ya mampa, maye bakati na maye bakati naino te, na mpe nzete ya vino na nzete ya oliva. | |
| Judg | LinVB | 15:6 | Ba-Filisti batuni : « Nani asalaki bongo ? » Bazongisi : « Samson, bokilo wa moto wa Timna, asalaki bongo, zambi babotoli ye mwasi wa ye, oyo bapesi na moko wa baninga ba meza. » Ba-Filisti bayei mpe batumbi mwasi na tata wa ye. | |
| Judg | LinVB | 15:7 | Samson alobi na bango : « Awa bino bosali bongo, nakolembe te liboso ’te nazongisela bino mabe mana. » | |
| Judg | LinVB | 15:8 | Abeti bango makasi, bato mingi bakufi. Nsima akei kofanda o mobenga penepene na Etam. | |
| Judg | LinVB | 15:10 | Bato ba Yuda batuni bango : « Mpo nini boyei kobunda na biso ? » Ba-Filisti bayanoli : « Toyei awa mpo tokanga Samson, tosala ye mabe lokola ye asalaki biso. » | |
| Judg | LinVB | 15:11 | Bato ba Yuda nkoto isato bakei o mobenga mwa Etam, balobi na Samson : « Oyebi te ’te ba-Filisti bazali bakonzi ba biso ? Osali biso nini ko ? » Alobi na bango : « Nasalaki bango se lokola basalaki ngai. » | |
| Judg | LinVB | 15:12 | Balobi na ye : « Toyei awa mpo tokaba yo o maboko ma ba-Filisti. » Samson alobi na bango : « Bolaya ndai ’te bino mpenza bokoboma ngai te. » | |
| Judg | LinVB | 15:13 | Bayanoli : « Biso tolingi se kokanga yo mpe kokaba yo o maboko ma bango ; biso tolingi koboma yo te. » Bakangi ye na nsinga ibale ya sika mpe babimisi ye o mobenga. | |
| Judg | LinVB | 15:14 | Ekomi bango penepene na Leki, ba-Filisti bayei kozwana na ye, bazalaki koganga na esengo, kasi elimo ya Yawe ekiteli Samson. Nsinga o maboko ma ye ikomi lokola ntokia iziki na móto mpe ilongwi o maboko ma ye. | |
| Judg | LinVB | 15:15 | Na nsima amoni mbanga ya mpunda, ekufi se sika, atomboli loboko, asimbi yango mpe abomi na yango bato nkoto yoko. | |
| Judg | LinVB | 15:16 | Samson alobi : « Na mbanga ya mpunda nabeti bango makasi, na mbanga ya mpunda nabomi bato nkoto yoko. » | |
| Judg | LinVB | 15:17 | Elobi ye maloba mana, abwaki monkuwa mosika ; yango wana bapesi esika ena nkombo Ramat-Leki. | |
| Judg | LinVB | 15:18 | Samson ayoki mposa makasi ya komele mai, abondeli Yawe, alobi : « Yo moto opesaki ngai mosaleli wa yo lilonga linene. Bongo sikawa nakufa na mposa ya mai mpe nakweya o maboko ma bato bakatemi nzoto te ? » | |
| Judg | LinVB | 15:19 | Nsima Yawe apasoli libanga lizali o Leki, mpe mai mabimi, Samson ameli ; bokasi bozongeli ye mpe akomi lisusu na mpiko. Yango wana bapesi liziba lina nkombo En-Akore ; tee lelo liziba lina lizali. | |
Chapter 16
| Judg | LinVB | 16:2 | Bayebisi bato ba Gaza likambo lina, balobi : « Samson ayei. » Bato ba Gaza balali te, bazalaki konongo ye butu mobimba penepene na ezibeli ya mboka. Butu mobimba batikali nye, balobani : « Etani ntongo, tokoboma ye. » | |
| Judg | LinVB | 16:3 | Kasi Samson alali se wana tee o kati ya butu ; na nsima atelemi mpe akangi mabaya manene ma makonzi ma ezibeli ya mboka, abakoli mango elongo na bibende bikangisi ezibeli ; atii mango o mapeke mpe akei na mango o nsonge ya ngomba penepene na Ebron. | |
| Judg | LinVB | 16:4 | Nsima yango Samson akomi kolinga mwasi moko o mboka yoko epai ya lobwaku la Sorek ; nkombo ya mwasi Dalila. | |
| Judg | LinVB | 16:5 | Bankumu ba Filisti bakei kotala mwasi, balobi na ye : « Meka kozwa motema mwa ye, ayebisa yo mpo nini azali na nguya enene, oyeba mpe ndenge nini tokoki kolonga ye mpo ’te tokanga ye na nsinga mpe tosilisa bokasi bwa ye. Biso banso moko moko tokopesa yo mitako mya palata nkoto yoko na monkama. » | |
| Judg | LinVB | 16:6 | Dalila alobi na Samson : « Nabondeli yo, yebisa ngai mpo nini ozali na nguya enene boye, yebisa ngai boniboni bakoki kokanga yo na nsinga mpe kosilisa bokasi bwa yo. » | |
| Judg | LinVB | 16:7 | Samson azongisi : « Soko bakangi ngai na nsinga nsambo ya litimbo, nsinga ya sika, ikauki naino te, bokasi bwa ngai bokosila mpe nakokoma lokola bato banso. » | |
| Judg | LinVB | 16:8 | Bankumu ba Filisti bapesi Dalila nsinga nsambo ya litimbo, nsinga ya sika ikauki naino te. Dalila akangi ye na nsinga ina. | |
| Judg | LinVB | 16:9 | Bato babombami o ndako ya ye ya kolala. Na nsima Dalila agangi : « Samson ee, ba-Filisti bayeli yo ! » Samson akati nsinga ya litimbo lokola nsinga ya ntokia eziki na móto. Bongo ntina ya nguya ya ye eyebani te. | |
| Judg | LinVB | 16:10 | Dalila alobi na Samson : « Okosi ngai, obukeli ngai lokuta. Yebisa ngai ndenge nini bakoki kokanga yo. » | |
| Judg | LinVB | 16:11 | Ayanoli : « Soko bakangi ngai na mikulu mya sika, esali naino mosala te, bokasi bwa ngai bokosila mpe nakokoma lokola bato banso. » | |
| Judg | LinVB | 16:12 | Dalila akamati mikulu mya sika akangi ye mpe agangi : « Samson ee, ba-Filisti bayeli yo ! » Bato babombami o ndako ya ye ya kolala, kasi Samson akati mikulu mikangaki maboko ma ye lokola bakokataka nsinga ya bilamba. | |
| Judg | LinVB | 16:13 | Dalila alobi na Samson : « Ozali kokosa ngai mpe kobukela ngai lokuta. Yebisa ngai ndenge nini bakoki kokanga yo. » Samson ayanoli : « Soko okamati maboto nsambo ma nsuki ya ngai mpe okangi mango na monyololo mwa etongeli ya bilamba, bokasi bwa ngai bokosila mpe nakokoma lokola bato banso. » | |
| Judg | LinVB | 16:14 | Ezalaki ye kolala mpongi, Dalila akangi nsuki ya ye na monyololo mwa etongeli ya bilamba mpe agangi : « Samson ee, ba-Filisti bayeli yo ! » Samson alamuki mpe abendi monyololo na etongeli ya bilamba mobimba. | |
| Judg | LinVB | 16:15 | Dalila alobi na ye : « Boniboni okoki koloba ’te olingi ngai, awa opesi ngai motema mwa yo te ? Osili kokosa ngai mbala isato mpe oboyi koyebisa ngai mpo nini ozali makasi mingi. » | |
| Judg | LinVB | 16:16 | Azalaki kotunatuna ye bongo mokolo na mokolo mpe kotungisa ye na maloba ma ye. Samson alembi, mayele ma ye matamboli. | |
| Judg | LinVB | 16:17 | Bongo ayebisi ye makambo manso mazalaki o motema, alobi : « Etebu ekokoli motó mwa ngai mokolo moko te, zambi babonzaki ngai na Nzambe ntango nazalaki o libumu lya mama. Soko bakokoli ngai nsuki, bokasi bwa ngai bokosila mpe nakokoma lokola bato banso. » | |
| Judg | LinVB | 16:18 | Dalila amoni ’te mbala eye Samson ayebisi ye makambo ma solo. Abengi bankumu ba Filisti, alobi na bango : « Boyaka sikawa, zambi ayebisi ngai makambo ma solo. » Bongo bankumu ba Filisti bayei, mosolo o maboko. | |
| Judg | LinVB | 16:19 | Ntango Dalila alalisi Samson mpongi o bibelo bya ye, abengi moto moko mpo ya kokata milongo nsambo mya nsuki ya ye. Bokasi bwa ye bobandi kosila mpe nguya elongwi epai ya ye. | |
| Judg | LinVB | 16:20 | Dalila agangi : « Samson ee ! Ba-Filisti bayeli yo ! » Samson alamuki, amilobeli : « Nakobika lokola nabikaki mbala isusu mpe nakokima bango. » Kasi ayebi te ’te Yawe atiki ye. | |
| Judg | LinVB | 16:21 | Ba-Filisti bakangi ye mpe batoboli ye miso. Bakei na ye o mboka Gaza mpe bakangi ye na minyololo mya mbengi mibale. Bakotisi ye o boloko mpe bapesi ye mosala mwa kopusa libanga likonika mbuma ya mampa. | |
| Judg | LinVB | 16:23 | Bankumu ba Filisti bayei kosangana mpo ya kobonzela nzambe wa bango Dagon libonza linene mpe mpo ya kosepela ; balobi : « Nzambe wa biso akabi monguna wa biso Samson o maboko ma biso. » | |
| Judg | LinVB | 16:24 | Awa bato bamoni Samson, bakumisi nzambe wa bango, bayembi : « Nzambe wa biso akabeli biso monguna oyo azalaki kobebisa mokili mwa biso mpe koboma bato baike. » | |
| Judg | LinVB | 16:25 | Ezalaki bango kosepela, balobi : « Boyela biso Samson aya kosekisa biso. » Babimisi Samson o boloko. Abandi kosekisa bango na masano ma ye ; na nsima batii ye o kati ya makonzi ma tempelo. | |
| Judg | LinVB | 16:26 | Samson alobi na elenge mobali oyo asimbi ye na loboko : « Kamba ngai nasimba makonzi ma tempelo, napema mwa moke. » | |
| Judg | LinVB | 16:27 | Tempelo etondaki na bato, babali na basi. Ezalaki wana bankumu banso ba Filisti ; o motondo mwa ndako mpe, babali na basi soki nkoto isato, bazalaki kotala masano ma Samson. | |
| Judg | LinVB | 16:28 | Samson abeleli Yawe, alobi : « E Mokonzi Yawe, nabondeli yo, kanisa ngai mpe mbala eye pesa ngai naino nguya nazongisela ba-Filisti mabe basalaki ngai na bobomi miso ma ngai mabale. » | |
| Judg | LinVB | 16:29 | Na nsima Samson asimbi makonzi mabale, maye mazali kokumba tempelo. Atindisi likonzi lyoko na loboko la mobali, likonzi lisusu na loboko la mwasi. | |
| Judg | LinVB | 16:30 | Samson akanisi : « Tika nakufa elongo na ba-Filisti. » Mpe na nguya ya ye inso atindisi makonzi, tempelo ebukani, ekweli bankumu na mpe bato banso bazalaki wana. Bato baye abomi mokolo akufi baleki baye abomaki ntango azalaki na bomoi. | |
Chapter 17
| Judg | LinVB | 17:2 | Alobi na mama wa ye : « Mokolo bayibelaki yo mitako mya palata nkoto yoko na monkama, obeteleki moyibi mobondo, ngai mpe nayokaki maloba mana ; tala mosolo mona, ngai moto nakamati mwango. » Mama wa ye alobi : « Yawe abenisa yo, mwana. » | |
| Judg | LinVB | 17:3 | Mikayeu azongisi mitako mya palata nkoto yoko na monkama, kasi mama wa ye alobi : « Nakobonzela Yawe mosolo mwango mpe nalingi ’te mwana wa ngai asala na mwango ekeko ya bibende ; yango wana sikawa nakozongisela yo mwango. » | |
| Judg | LinVB | 17:4 | Ntango azongisi mosolo o maboko ma mama wa ye, mama akamati mitako nkama ibale mpe apesi motuli. Oyo atuli na myango ekeko ya bibende, atii yango o ndako ya Mikayeu. | |
| Judg | LinVB | 17:5 | Oyo azalaki na ndako mpo ya kosambela banzambe ba ye, asoni efod mpe asali bikeko ; na nsima o kati ya bana ba ye atii mwana moko azala nganga Nzambe. | |
| Judg | LinVB | 17:6 | O mikolo mina mokonzi azalaki o Israel te ; bato banso bazalaki kosala lokola mitema mya bango milingi. | |
| Judg | LinVB | 17:7 | Ezalaki elenge mobali moko wa Beteleme o Yuda, wa libota lya Yuda, azalaki mo-Levi mpe afandi wana lokola mompaya. | |
| Judg | LinVB | 17:8 | Atiki mboka Beteleme, akei koluka esika esusu ya kofanda. Akomi o ngomba ya Efraim mpe mobembo mwa ye moyei kosuka o ndako ya Mika. | |
| Judg | LinVB | 17:9 | Mika atuni ye : « Outi wapi ? » Azongisi : « Nazali mo-Levi, nauti o Beteleme o mokili mwa Yuda. Nazali koluka esika esusu mpo ’te nafanda lokola mompaya. » | |
| Judg | LinVB | 17:10 | Mika alobi na ye : « Tikala awa, zala tata wa ngai mpe nganga Nzambe wa ngai. Mobu na mobu nakofuta yo mitako mya palata zomi, nakopesa yo bilamba mpe bilei. » | |
| Judg | LinVB | 17:11 | Mo-Levi andimi kofanda epai ya Mika. Mika atali elenge mobali lokola mwana wa ye moko. | |
| Judg | LinVB | 17:12 | Apesi ye mosala mwa bonganga. Mo-Levi akomi nganga Nzambe wa ye mpe atikali o ndako ya ye. | |
Chapter 18
| Judg | LinVB | 18:1 | O eleko ena, mokonzi azalaki o Israel te. O mikolo mina bato ba libota lya Dan bazalaki koluka esika ya kofanda, zambi kin’o mokolo mona bazwaki mabelé te lokola mabota masusu ma Israel. | |
| Judg | LinVB | 18:2 | Bongo bato ba Dan batindi babali batano ba etuka ya bango, basoda ba mpiko bauti o Sorea mpe o Estaol, bakende konongo mokili mwango malamu ; balobi na bango : « Bokende kotala mokili mona. » Bato batano bakomi o ngomba ya Efraim mpe basuki o ndako ya Mika ; na butu balali wana. | |
| Judg | LinVB | 18:3 | Ekomi bango penepene na ndako ya Mika, bayoki mongongo mwa elenge mo-Levi. Bakei epai ya ye, batuni ye : « Nani atindi yo awa ? Oyei kosala nini awa ? Ozali koluka nini awa ? » | |
| Judg | LinVB | 18:4 | Ayanoli : « Mika asali ngai malamu maike, andimi ngai o mosala, nakomi nganga Nzambe wa ye. » | |
| Judg | LinVB | 18:6 | Nganga Nzambe alobi na bango : « Bokende na boboto ! Yawe akobatela bino o mobembo. » | |
| Judg | LinVB | 18:7 | Bato batano bakei mpe bakomi o Lais. Bamoni ’te bato ba mboka ena bafandi nye lokola bato ba Sidoni, se na boboto, matata te. Bazalaki na mbuma mingi ya bilanga, bafandi mosika na ba-Sidoni mpe bakokutanaka na ba-Aram te. | |
| Judg | LinVB | 18:8 | Bato batano bazongi epai ya bandeko ba bango o Sorea mpe Estaol. Bandeko batuni bango : « Boyeli biso nsango nini ? » | |
| Judg | LinVB | 18:9 | Bango bayanoli : « Toteleme ! Tokende kobunda na bango, zambi tomoni ’te mokili mona mozali malamu mpenza. Boni bino bofandi nye mpe bolobi eloko te ? Bobete ntembe te ! Bokende kokamata mokili mona mpo bokoma bankolo ba mwango. | |
| Judg | LinVB | 18:10 | Ekoti bino o mokili, bokokuta se bato bafandi na boboto. Mokili mozali monene, mpe Yawe akabi mwango o maboko ma bino ; mokili moye mozali na biloko binso mpenza. » | |
| Judg | LinVB | 18:11 | Bato nkama motoba ba libota lya Dan balongwi o Sorea mpe o Estaol, bamemi bibuneli bya bango. | |
| Judg | LinVB | 18:12 | Bapiki nganda o Kiriat-Yearim o Yuda. Ntina yango bakobengaka esika ena ‘Nganda ya ba-Dan’ tee lelo ; ezali o Westi ya Kiriat-Yearim. | |
| Judg | LinVB | 18:14 | Bato batano baye bakendeki konongo mokili o Lais balobi na bandeko ba bango : « Boyebi te ’te o ndako ina efod ezali, mabenga ma biloko bya bonganga, ekeko ya bibende na elili ? Sikawa boyeba nini bosengeli kosala. » | |
| Judg | LinVB | 18:16 | Bato nkama motoba ba libota lya Dan batikali penepene na ezibeli ya ndako, bibuneli o maboko. | |
| Judg | LinVB | 18:17 | Bato batano, baye bakendeki konongo mokili, bayingeli o ndako, bakamati efod, ekeko, nkisi na elili ; nganga nzambe atikali penepene na ezibeli ya ndako elongo na bato nkama motoba baye bazalaki bibuneli o maboko. | |
| Judg | LinVB | 18:18 | Awa bakoti o ndako ya Mika mpe bakamati ekeko, efod, nkisi na elili, nganga nzambe atuni bango : « Bolingi kosala nini ? » | |
| Judg | LinVB | 18:19 | Bango bazongisi : « Kanga monoko, tia loboko liboso lya monoko mpe landa biso. Zala tata wa biso mpe nganga nzambe wa biso. Olingi kozala nganga Nzambe o ndako ya moto moko, to wa libota mpe wa etuka ya Israel mobimba ? » | |
| Judg | LinVB | 18:20 | Nganga nzambe asepeli na maloba mana ; akamati efod, mabenga ma biloko bya bonganga na ekeko, mpe alandi limpinga lya bango. | |
| Judg | LinVB | 18:21 | Bato ba Dan bakobi mobembo mwa bango, batindi ’te basi, bana, bibwele na biloko bakende liboso. | |
| Judg | LinVB | 18:22 | Ekomi bango mwa mosika na ndako ya Mika, bato bafandi penepene na ndako ya Mika babimi, bakei kolanda bato ba Dan. | |
| Judg | LinVB | 18:23 | Bagangeli bango, bato ba Dan bamibongoli mpe balobi na Mika : « Mpo nini otindaki bato baya kosala makeléle boye ? » | |
| Judg | LinVB | 18:24 | Mika azongisi : « Nasalaki bikeko bya nzambe wa ngai mpe bino boyibi byango, na mpe nganga nzambe wa ngai bokei na ye. Ngai natikali na eloko te ! Boniboni botuni ngai : Likambo nini na yo ? » | |
| Judg | LinVB | 18:25 | Bato ba Dan bayanoli : « Toyoka yo lisusu te, soki te bato basusu bakosilika awa, bakoki mpe kosala yo mabe mpe koboma yo na libota lya yo mobimba ! » | |
| Judg | LinVB | 18:26 | Bato ba Dan bakobi nzela ya bango. Mika amoni ’te bango baleki ye na bokasi, atiki bango mpe azongi o ndako ya ye. | |
| Judg | LinVB | 18:27 | Ezwi bango biloko, biye Mika asalaki na mpe nganga Nzambe azalaki kosalela ye, bato ba Dan, bakobi nzela mpe bakomi o Lais. Bakuti bato bafandi nye, bazalaki kobanga likama lyoko te. Babomi bango banso na mopanga mpe batumbi mboka ya bango. | |
| Judg | LinVB | 18:28 | Moto moko azalaki te mpo ya kobikisa bango, zambi bazalaki mosika na bato ba Sidoni, mpe bazalaki na mokonzi mosusu te. Mboka ya bango ezalaki o lobwaku la Bet-Rekob. Batongi mboka lisusu mpo bafanda kuna seko. | |
| Judg | LinVB | 18:29 | Bapesi yango nkombo Dan, oyo azalaki nkoko wa bango mpe mwana wa Israel ; kala nkombo ya mboka ena ezalaka Lais. | |
| Judg | LinVB | 18:30 | Bato ba Dan babongiseli ekeko ya bango esika. Yonatan, mwana wa libota lya Gersom, nkoko wa Moze, azalaki nganga Nzambe o libota lya ba-Dan tee o eleko bato banso bakangemi mpe bakei o boombo. | |
Chapter 19
| Judg | LinVB | 19:1 | O eleko ena, mokonzi azalaki o Israel te. Mo-Levi moko afandi o ngomba ya Efraim, akamati makango wa Beteleme o Yuda. | |
| Judg | LinVB | 19:2 | Makango akosi ye, na nsima akei kofanda o ndako ya tata wa ye o Beteleme ya Yuda, esika atikali soki sanza inei. | |
| Judg | LinVB | 19:3 | Mobali wa ye akei kolanda ye mpo ya kobondela ye azonga o ndako ya ye. Akei elongo na mosaleli wa ye mpe na mpunda ibale. Makango ayambi ye o ndako ya tata wa ye. Tata wa mwasi akei koyamba ye na motema esengo. | |
| Judg | LinVB | 19:4 | Bokilo wa ye, tata wa elenge mwasi afandisi ye o ndako. Atikali wana mikolo misato, balei, bameli mpe balali na butu. | |
| Judg | LinVB | 19:5 | O mokolo mwa minei balamuki na nta ntongo mpe mo-Levi amilengeli mpo ya kokende, kasi tata wa elenge mwasi alobi na bokilo wa ye : « Lia ndambo ya mampa mpo ozala makasi, na nsima okende. » | |
| Judg | LinVB | 19:6 | Bafandi, balei mpe bameli esika yoko. Tata wa elenge mwasi alobi na ye : « Ndima naino kolala awa na butu lelo, motema mwa yo mosepela. » | |
| Judg | LinVB | 19:7 | Awa mobali atelemi mpo ya kokende, bokilo abondeli ye ; yango wana na butu atikali kolala wana. | |
| Judg | LinVB | 19:8 | Mokolo mwa mitano na ntongo-ntongo atelemi mpo ya kokende, kasi tata wa elenge mwasi alobi na ye : « Nabondeli yo, lia naino mwa moke mpe zila tee mpokwa. » Bongo balei lisusu esika yoko. | |
| Judg | LinVB | 19:9 | Mobali amilengeli mpo ya kokende elongo na makango wa ye mpe na mosaleli wa ye, kasi bokilo wa ye, tata wa elenge mwasi, alobi na ye : « Tala, moi molingi mokita, etikali moke tokoma na butu. Bolala awa, motema mwa yo mosepela ! Lobi na ntongo okoki kokende mpo ozonga o ema ya yo. » | |
| Judg | LinVB | 19:10 | Kasi mobali aboyi kolala wana lisusu ; atelemi, akei mpe akomi penepene na Yebus (Yeruzalem). Akei na mpunda ya ye ibale, elongo na makango mpe na mosaleli wa ye. | |
| Judg | LinVB | 19:11 | Ekomi bango penepene na Yebus, moi mosilaki kokita. Mosaleli alobi na nkolo wa ye : « Nabondeli yo, totika nzela eye, tokende o engumba eye ya ba-Yebus, tolala wana na butu. » | |
| Judg | LinVB | 19:12 | Kasi nkolo wa ye alobi : « Tokolala wana te, ezali mboka ya bampaya, bazali ba-Israel te. Totambola tee Gibea. » | |
| Judg | LinVB | 19:13 | Alobi lisusu na mosaleli wa ye : « Totambola noki mpe tomeka kokoma o Gibea to o Rama. » | |
| Judg | LinVB | 19:14 | Batamboli naino tee moi mosili kokita o ntango bakomi penepene na Gibea o mokili mwa Benyamin. | |
| Judg | LinVB | 19:15 | Batiki nzela enene mpo balala o Gibea. Mo-Levi akoti o mboka mpe akei kofanda o zando ya mboka, kasi moto moko te alingi koyamba ye o ndako mpo balala wana. | |
| Judg | LinVB | 19:16 | Penepene na butu mobange moko auti o mosala mwa ye mwa bilanga. Azalaki moto wa mokili mwa ngomba ya Efraim, kasi afandi o Gibea, nzokande bato ba Gibea bazalaki ba-Benyamin. | |
| Judg | LinVB | 19:17 | Atombola miso, amoni moto wa mobembo afandi wana o libanda, atuni ye : « Outi wapi mpe ozali kokende wapi ? » | |
| Judg | LinVB | 19:18 | Azongisi : « Tolongwi o Beteleme o Yuda mpe tozali kokende kin’o nsuka ya ngomba ya Efraim. Ngai nakofandaka kuna. Nakendeki o Beteleme ya Yuda, sikawa nakozonga o mboka. Awa moto moko te alingi koyamba biso o ndako ya ye. | |
| Judg | LinVB | 19:19 | Nzokande tozali na bilei mpe na matiti mpo ya mpunda ya biso, tozali mpe na mampa na vino ikoki na ngai, na mwasi mpe na elenge mobali oyo azali kokende na ngai. Tozangi eloko te ! » | |
| Judg | LinVB | 19:20 | Mobange ayanoli : « Boboto bozala na yo ! Soko ozangi eloko, nakopesa yo yango, kasi bolala o libanda te. » | |
| Judg | LinVB | 19:21 | Akotisi bango o ndako ya ye mpe aleisi mpunda. Bato ba mobembo basukoli makolo, nsima balei mpe bameli. | |
| Judg | LinVB | 19:22 | Ezalaki bango kolia, tala bato ba mboka, bifaka bya bato, bayei kozinga ndako, babeteli ezibeli ya ndako makasi mpe balobi na mobange, nkolo wa ndako : « Bimisa moto oyo akoti o ndako ya yo, tolala na ye. » | |
| Judg | LinVB | 19:23 | Nkolo wa ndako abimi mpe alobi : « Te, bandeko ba ngai, nabondeli bino bosala mabe boye te. Awa moto oyo ayingeli o ndako ya ngai, botika kosala likambo lya nsomo boye. | |
| Judg | LinVB | 19:24 | Bokamata mwana wa ngai wa mwasi, azali naino ngondo ; nakobimisa ye. Bolala na ye mpe bosala na ye lokola bolingi. Kasi bosala moto oyo likambo lya nsomo boye te ! » | |
| Judg | LinVB | 19:25 | Kasi bango baboyi koyoka maloba ma ye. Sikawa mo-Levi akamati makango wa ye mpe abimisi ye o libanda. Bato balali na ye mpe babebisibebisi ye butu mobimba ; penepene na ntongo batiki ye. | |
| Judg | LinVB | 19:26 | Penepene na ntongo, mwasi ayei komibwaka o boso bwa ndako ya moto oyo ayambaki mobali wa ye, alali wana tee moi mobimi. | |
| Judg | LinVB | 19:27 | Na ntongo mobali wa ye alamuki, afungoli ndako mpe abimi mpo ya kokoba mobembo mwa ye. Mpe tala maka-ngo wa ye alali wana o boso bwa ndako, maboko o libanga lizalaki wana. | |
| Judg | LinVB | 19:28 | Alobi na ye : « Teleme, tokende noki ! » Kasi azwi eyano yoko te. Alalisi ye o mpunda mpe azongi na ye o mboka. | |
| Judg | LinVB | 19:29 | Ekomi ye o mboka akamati mbeli, akati makango wa ye na biteni zomi na bibale, mpe atindi byango o mokili mobimba mwa Israel. | |
Chapter 20
| Judg | LinVB | 20:1 | Ba-Israel banso babimi mpe basangani likita se motema moko, banda Dan tee Berseba ; bato ba Galaad bayei mpe epai ya Yawe o Mispa ? | |
| Judg | LinVB | 20:2 | Bakonzi banso ba ekolo, bato ba mabota manso ma Israel bayei o lisanga lya bato ba Nzambe. Bazalaki bato nkoto nkama inei, banso bayebi kobunda na mopanga. | |
| Judg | LinVB | 20:3 | Bato ba Benyamin bayoki ’te ba-Israel bakomi o Mispa. Bato ba Israel balobi : « Yebisa biso boniboni mabe mana masalemi. » | |
| Judg | LinVB | 20:4 | Mo-Levi, mobali wa mwasi oyo akufi, azongisi : « Nakendeki na makango wa ngai o Gibea o mokili mwa Benyamin, esika tolingaki kolala na butu. | |
| Judg | LinVB | 20:5 | Bato ba Gibea baluki ngai na makambo. O kati ya butu bazingi ndako esika nazalaki. Balingaki koboma ngai, mpe babebisi makango wa ngai tee akufi. | |
| Judg | LinVB | 20:6 | Nakamati ebembe ya makango wa ngai, nakati yango biteni mpe natindi biteni bina o mokili mobimba mwa Israel ; mpamba te, basalaki likambo lya nsomo o mokili mwa Israel. | |
| Judg | LinVB | 20:8 | Motema moko bato banso batelemi mpe balobi : « Moto moko azonga o ema ya ye te, moto moko azonga o ndako ya ye te ! | |
| Judg | LinVB | 20:9 | Boyoka nini tokosala bato ba Gibea : Tokobete zeke mpo tobimisa bato bakende kobunda na bango. | |
| Judg | LinVB | 20:10 | Tokopono bato o kati ya mabota manso ma Israel. O kati ya bato monkama tokopono bato zomi, o kati ya bato nkoto yoko tokopono bato monkama, o kati ya bato nkoto zomi tokopono bato nkoto yoko. Bango baluka biloko bya kolia mpo ya bato bakokende o Gibea kozongisela bato ba Benyamin mabe ma nsomo basalaki o Izrael. » | |
| Judg | LinVB | 20:11 | Bato banso ba Israel bayokani ’te banso motema moko bakokende kobundisa bato ba mboka ena. | |
| Judg | LinVB | 20:12 | Bato ba Israel batindi bantoma o mokili mobimba mwa Benyamin na maloba maye : « Mabe nini masalemaki kuna epai ya bino ? | |
| Judg | LinVB | 20:13 | Sikawa, bokabela biso bato basalaki mobulu, baye bazali o Gibea, toboma bango mpo tolongola bobe o Israel. » Kasi bato ba Benyamin bandimi maloba ma bandeko ba bango ba-Israel te. | |
| Judg | LinVB | 20:14 | Bato ba Benyamin batiki mboka ya bango, basangani o Gibea mpo bakende etumba na ba-Israel. | |
| Judg | LinVB | 20:15 | O mokolo mona batangi ba-Benyamin bautaki o mboka ya bango, bazalaki bato nkoto ntuku ibale na motoba, banso bayebi kobunda na mopanga. O kati ya motango mona bato ba Gibea batangemi te, bango bazalaki basoda ba mpiko nkama nsambo. | |
| Judg | LinVB | 20:16 | Bilombe nkama nsambo bazalaki o kati ya bango, baye bakobundaka se na loboko la mwasi. Banso bakoki komaa libanga semba. | |
| Judg | LinVB | 20:17 | Batangi mpe bato ba Israel : longola ba-Benyamin ba-Israel bazalaki bato nkoto nkama inei, banso bayebi kobunda na mopanga. | |
| Judg | LinVB | 20:18 | Liboso ba-Israel bakei kotuna Yawe o Betel : « O kati ya biso nani abanda etumba na ba-Benyamin ? » Yawe azongisi : « Yuda moto abanda ! » | |
| Judg | LinVB | 20:20 | Awa ba-Israel bayei kobunda etumba na ba-Benyamin, batandi milongo mya basoda o boso bwa Gibea. | |
| Judg | LinVB | 20:21 | Ba-Benyamin babimi o Gibea, mpe o mokolo mona babomi bato ba Israel nkoto ntuku ibale na ibale. | |
| Judg | LinVB | 20:22 | Bana ba Israel bakei kolela o miso ma Yawe tee mpokwa, batuni ye : « Tokende lisusu kobunda etumba na bandeko ba biso ba-Benyamin ? » Yawe ayanoli : « Bokende ! » | |
| Judg | LinVB | 20:23 | Bato ba Israel bazwi mpiko lisusu mpe batandi lisusu milongo o esika bazalaki mokolo mwa yambo. | |
| Judg | LinVB | 20:25 | Mbala ya ibale ba-Benyamin babimi o Gibea, bakutani na bango mpe babomi lisusu ba-Israel nkoto zomi na mwambe, se bato bayebi kobunda na mopanga. | |
| Judg | LinVB | 20:26 | Bato banso ba Israel bakei kofanda o miso ma Yawe o Betel, baleli mpe balali nzala moi mobimba tee mpokwa mpe babonzeli Yawe mabonza na miboma mya bondeko. | |
| Judg | LinVB | 20:27 | Bato ba Israel batuni Yawe, zambi Sanduku ya Bondeko bwa Nzambe ezalaki o esika ena o mikolo mina. | |
| Judg | LinVB | 20:28 | Pinekas, mwana wa Eleazar, nkoko wa Aron, azalaki kosala mosala mwa nganga Nzambe o mikolo mina. Bongo batuni : « Tokende lisusu kobunda etumba na bandeko ba biso ba-Benyamin to totika ? » Yawe azongisi : « Bokende, zambi lobi nakokaba bango o maboko ma bino. » | |
| Judg | LinVB | 20:30 | Mokolo mwa misato ba-Israel bakei kobunda na ba-Benyamin, batandi milongo penepene na Gibea lokola basalaki mbala ya liboso. | |
| Judg | LinVB | 20:31 | Bato ba Benyamin babimi o mboka mpo ya kokutana na bango, bakomi mwa mosika na mboka ya bango. Lokola mbala ya liboso babandi koboma bato. Bato ba Israel bakufi soko ntuku isato, basusu o nzela ya Betel, basusu o nzela ya Gibea o esobe. | |
| Judg | LinVB | 20:32 | Bato ba Benyamin bamilobeli : « Tolongi bango lisusu lokola mbala ya liboso. » Kasi ba-Israel bayokanaki boye : « Tokokima mpo balanda biso o nzela mpe bakoma mosika na mboka ya bango ! » | |
| Judg | LinVB | 20:33 | Bato ba Israel banso batiki nganda mpe batandani milongo mpo ya kobunda o Baal-Tamar. O ntango ena bato ba Israel babombamaki, batiki esika ya bango mpe bakei kobunda epai ya Westi ya Gibea. | |
| Judg | LinVB | 20:34 | Basoda nkoto zomi, bato ba mpiko baponomi o Israel mobimba, bayei o boso bwa Gibea. Etumba engali makasi mpenza. Kasi ba-Benyamin bayebi te ’te likambo lya mpasi likokwela bango. | |
| Judg | LinVB | 20:35 | Yawe alongi ba-Benyamin o miso ma ba-Israel. O mokolo mona ba-Israel babomi ba-Benyamin nkoto ntuku ibale na itano na monkama, bato bayebi kobunda na mopanga. | |
| Judg | LinVB | 20:36 | Ba-Benyamin bamoni polele ’te bakiti. Ba-Israel bazongi nsima, batikeli ba-Benyamin nzela balanda bango, zambi batii mitema na baninga babombami penepene na Gibea. | |
| Judg | LinVB | 20:37 | Baye babimi noki mpe bakei kobunda na Gibea, bakoti o mboka mpe babomi bato banso na mopanga. | |
| Judg | LinVB | 20:38 | Ba-Israel bayokanaki na baye bakendeki komibomba ’te : Bolakisa elembo, bopelisa móto o mboka, bongo milinga mibuta. | |
| Judg | LinVB | 20:39 | Bato ba Israel baye babundi etumba bazongi nsima. Ba-Benyamin babandi lisusu koboma ba-Israel, bato soki ntuku isato. Balobi : « Solo mpenza, tolongi bango nye, se lokola tolongaki bango mbala ya yambo ! » | |
| Judg | LinVB | 20:40 | Kasi elembo ya milinga mibuti ebandi komonono o mboka. Awa ba Benyamin batali nsima bamoni mboka mobimba eziki na móto mpe miloli mibuti o likolo. | |
| Judg | LinVB | 20:41 | Ba-Israel bazongeli ba-Benyamin lisusu, baye bakomi koyoka nsomo, zambi bamoni ’te likama linene likweli bango. | |
| Judg | LinVB | 20:42 | Bakimi ba-Israel mpe balandi nzela ya eliki, kasi ba-Israel balandi bango. Baye bautaki o mboka babomi ba-Benyamin o nzela. | |
| Judg | LinVB | 20:43 | Bazingi bango, balandi bango mawa te mpe banyati bango kin’o boso bwa Gibea epai ya Esti. | |
| Judg | LinVB | 20:45 | Baye batikali bakimi o eliki, bakoti o mobenga mwa Rimon. Ba-Israel babomi bongo bato nkoto itano bazalaki kokima, bakobi naino kolanda bango tee Gideon, mpe babomi lisusu bato nkoto ibale. | |
| Judg | LinVB | 20:46 | Bato ba Benyamin bakufi o mokolo mona bakoki nkoto ntuku ibale na itano, bato bayebi kobunda na mopanga, basoda ba mpiko mpenza. | |
| Judg | LinVB | 20:47 | Bato nkama motoba bakimi o eliki mpe bakoti o mobenga mwa Rimon, esika batikali sanza inei. | |
Chapter 21
| Judg | LinVB | 21:1 | O mboka Mispa ba-Israel balayaki ndai eye : « O kati ya biso moto moko akoki kobalela mwana wa ye mobali wa Benyamin te ! » | |
| Judg | LinVB | 21:2 | Banso bakei o Betel, esika bafandi o miso ma Yawe tee mpokwa. Baleli makasi mpe na mai o miso balobi : | |
| Judg | LinVB | 21:3 | « E Yawe Nzambe wa Israel, mpo nini tokomi na mawa boye ? Mpo nini o mokolo mwa lelo, o libota lyoko lya Israel bato bazali lisusu te ? » | |
| Judg | LinVB | 21:4 | Mokolo mwa nsima, bato batelemi na ntongontongo mpe batongi altare o esika ena. Babonzi mabonza ma kotumba na miboma mya bondeko. | |
| Judg | LinVB | 21:5 | Ba-Israel batuni : « Libota nini liyei kosangana na bandeko te o miso ma Yawe ? » Mpo balayaki ndai mpenza ’te bakoboma moto oyo ayei o lisanga epai ya Yawe o Mispa te. | |
| Judg | LinVB | 21:6 | Ba-Israel bakomi koyokela bandeko ba bango, ba-Benyamin, mawa. Balobi : « Lelo babomi libota lyoko o Israel. | |
| Judg | LinVB | 21:7 | Tokoki kosala nini mpo ya kopesa basi na baye batikali, mpo tolayaki ndai o miso ma Yawe ’te tokobalisa bango bana ba biso te ? » ba Yabes | |
| Judg | LinVB | 21:8 | Bongo batuni : « Nani o kati ya mabota ma Israel ayaki epai ya Yawe o Mispa te ? » Mpe tala, ata moto moko te wa Yabes-Galaad ayaki o nganda ya bango. | |
| Judg | LinVB | 21:10 | Batindi basoda nkoto zomi na ibale kuna na etinda eye : « Bokende koboma bato banso ba Yabes-Galaad, na basi na bana lokola ! | |
| Judg | LinVB | 21:11 | Bokosala boye : Boboma babali banso na mpe basi banso bazalaki na mobali, kasi botika bilenge basi bazali bangondo. » Basali bobele bongo. | |
| Judg | LinVB | 21:12 | O kati ya bato ba Yabes-Galaad bazwi bilenge basi nkama inei, bazalaki bangondo mpe bazalaki na mobali te. Bayei na bango o nganda ya Silo, o mokili mwa Kanana. | |
| Judg | LinVB | 21:13 | Bato banso ba lisanga mobimba batindi bantoma epai ya bato ba Benyamin, baye bazalaki o mobenga mwa Rimon, mpe bayebisi bango ’te balingi kotika bitumba. | |
| Judg | LinVB | 21:14 | Bongo ba-Benyamin bazongi. Bapesi bango basi baye babikaki o Yabes-Galaad, kasi banso bazwi basi te. | |
| Judg | LinVB | 21:15 | Bato bayokeli ba-Benyamin mawa, zambi Yawe alongoli libota lyoko o kati ya mabota ma Israel. | |
| Judg | LinVB | 21:16 | Bakolo ba lisanga balobi : « Tosala boni mpo ’te baye batikali bazwa basi, zambi babomaki basi banso ba libota lya Benyamin ? | |
| Judg | LinVB | 21:17 | Bato ba Benyamin bakoki nde kozwa ndambo ya bato te mpo ’te libota lya bango likufa o Israel te ? | |
| Judg | LinVB | 21:18 | Biso moko tokoki kobalisa bango bana ba biso te. Mpamba te, bana ba Israel balayaki ndai eye : Azwa bobe moto oyo apesi mo-Benyamin mwasi wa libala. » | |
| Judg | LinVB | 21:19 | Balobi lisusu : « Mobu na mobu tokosepela eyenga ya Yawe o Silo, kuna o Nordi ya Betel, o Esti ya nzela ekolongwa o Betel mpe ekokende o Sikem o Sudi ya Lebona. » | |
| Judg | LinVB | 21:21 | Botala malamu : soko bomoni bilenge basi babimi o Silo mpe bazali kobina mabina, bino bobima o bilanga bya vino mpe moto na moto akanga mwasi o kati ya bilenge basi ba Silo ; na nsima bokoki kozonga o mokili mwa Benyamin. | |
| Judg | LinVB | 21:22 | Mpe soko batata to bandeko ba bango bayei komilela epai ya biso, tokoyebisa bango : Bondimela bango, zambi basi baye bakangaki o ntango ya etumba bakokaki na bango banso te. Bino moko bokoki kobalisa bango basi te, mbele bokomeme ngambo. » | |
| Judg | LinVB | 21:23 | Ba-Benyamin basali bongo. Bakangi bilenge basi o ntango bazalaki kobina wana mpe banso bazwi mwasi, moko moko wa ye. Bongo bakei na bango o mokili mwa bango. Batongi mboka lisusu mpe bafandi wana. | |
| Judg | LinVB | 21:24 | O ntango ena, bato ba Israel bapalangani lisusu, bakei moto na moto o mokili mwa libota lya ye, moto na moto o etuka ya ye ; bakei kofanda o mokili mwa bango moko. | |