Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
II SAMUEL
Up
Chapter 1
II S LinVB 1:1  Nsima ya liwa lya Saul, Davidi, awa auti kolonga bato ba Amalek, afandi mikolo mibale o Siklag.
II S LinVB 1:2  Mokolo mwa misato, moto moko auti o nganda ya Saul. Alati bilamba bipaswani mpe apakoli mputulu o motó. Ntango akomi epai ya Davidi, akumbami tee o nse mpe akumisi ye.
II S LinVB 1:3  Davidi atuni ye : « Outi wapi ? » Azo­ngisi : « Nakimi nganda ya ba-Israel. »
II S LinVB 1:4  Davidi atuni ye lisusu : « Likambo nini likwelaki kuna ? Yebisa ngai ! » Moto ona alobi : « Basoda bakimi etu­mba, bato ebele bakufi ; Saul na mwana wa ye Yonatan bakufi mpe. »
II S LinVB 1:5  Davidi atuni elenge oyo ayeli ye nsa­ngo : « Boniboni oyebi ’te Saul na mwana wa ye Yonatan bakufi ? »
II S LinVB 1:6  Ele­nge mobali azongisi : « Nazalaki koleka o ngomba Gilboa. Namoni Saul atelemi, likongo o maboko, mpe basoda ba makalo na basoda ba farasa bazingi ye.
II S LinVB 1:7  Amibongoli mpe amoni ngai ; abengi ngai mpe nalobi : Ngai oyo.
II S LinVB 1:8  Atuni ngai : Yo nani ? Mpe nalobi na ye : Nazali moto wa Amalek.
II S LinVB 1:9  Alobi na ngai lisusu : Yaka penepene na ngai mpe boma ngai, zambi motó mwa ngai mozali kotambola, ata nazali naino na nzoto makasi.
II S LinVB 1:10  Yango wana nakei penepene na ye mpe nabomi ye ; nayebaki ’te soko akwei o maboko ma banguna, akobika te. Na­longoli enkoti ya ye ya bokonzi o motó mwa ye, nalongoli mpe ekómo o loboko la ye. Nayei na yango awa mpo ya kopesa yo, mokonzi wa ngai. »
II S LinVB 1:11  Davidi apasoli bilamba bya ye ; bato bazalaki na ye basali se bongo.
II S LinVB 1:12  Basali lilaka ; tee mpokwa balei eloko te. Baleli Saul na mwana wa ye Yonatan. Baleli bato ba ekolo Israel, ekolo ya Yawe, baye bakufi na mopa­nga.
II S LinVB 1:13  Davidi atuni elenge oyo ayebisi ye nsango : « Yo outi wapi ? » Ye azo­ngisi : « Ngai mwana wa mompaya, mo­to wa Amalek. »
II S LinVB 1:14  Davidi alobi na ye : « Yo moto otomboli loboko mpe obomi moto oyo Yawe aponoki bo mokonzi mpe apakolaki mafuta, boniboni obangaki te ? »
II S LinVB 1:15  Davidi abengi mosali moko mpe alobi na ye : « Yaka awa mpe boma ye. » Bongo abeti ye mpe akufi.
II S LinVB 1:16  Davidi alobi : « Makila ma yo mazongela yo moko, mpo omi­fundi awa olobi : Ngai moto nabomi moto oyo Yawe apakolaki mafuta. »
II S LinVB 1:17  Davidi abandi nzembo ya lilaka mpo ya Saul na mwana wa ye Yonatan.
II S LinVB 1:18  Nzembo eye ekomami o buku Moto Semba, mpo ’te balakisa ya­ngo na bana ba Yuda : Alobi :
II S LinVB 1:19  « E Israel, lokumu la yo lobebi o ngomba ya yo. Boniboni bilombe mpenza bakufi o etumba ?
II S LinVB 1:20  Boyebisa nsango eye o mboka Gat te, bosakola yango o balabala ya Askalon te ; mpo ’te bilenge basi ba Filisti bayoka esengo te, mpe bana basi babotami na basutu basepela te !
II S LinVB 1:21  Bino, ngomba Gilboa, mamio na mbula manokela bino lisusu te, bilanga bya bino bibota lisusu te, mpo epai ya bino, nguba ya bilo-mbe izwi nsoni !
II S LinVB 1:22  Bapakolaki nguba ya Saul mafuta te, kasi bobele makila ma banguna na mafuta ma basoda. Litimbo lya Yonatan lizongaki nsima mokolo moko te, mopanga mwa Saul mozongaki mpamba te.
II S LinVB 1:23  Bato banso bakolingaka Saul na Yo­natan mingi, o bomoi mpe o liwa bakabwani te. Balekaki engondo na mbangu, balekaki ntambwe na bokasi.
II S LinVB 1:24  Bino, bilenge basi ba Israel, bolela Saul, oyo alatisi bino bilamba bya motuya mpe bikembiseli bya wolo.
II S LinVB 1:25  Boniboni bilombe mpenza bakwei o kati ya etumba ? Yonatan akufi wana o ngomba.
II S LinVB 1:26  Liwa lya yo liyokisi ngai mpasi mingi, ndeko wa ngai Yonatan. Tozalaki bandeko solo ; lokola nalingaki yo, bakolingaka ata mwasi bongo te.
II S LinVB 1:27  Ndenge nini bilombe bakufi ? Bibuneli bya bango bibebi mpe nde­nge nini ? »
Chapter 2
II S LinVB 2:1  Nsima yango Davidi atuni Yawe : « Nakende o mboka yoko ya Yuda ? » Yawe azongisi : « Kende ! » Da­vidi atuni lisusu : « Nakende o mbo­ka nini ? » Yawe ayanoli : « Kende o Ebron ».
II S LinVB 2:2  Bongo Davidi akei kuna elongo na basi ba ye babale, Akinoam wa Yizreel, na Abigayil, mwasi wa Nabal, moto wa Karmel.
II S LinVB 2:3  Davidi atindi baninga ba ye bakende kuna elongo na mabota ma bango ; bakei kofanda o mamboka penepene na Ebron.
II S LinVB 2:4  Bato ba Yuda basangani kuna mpe bapakoli Davidi mafuta mpo azala mokonzi wa libota lya Yuda. Bayebisi Davidi ’te bato ba Yabes o mokili mwa Galaad bakundaki Saul.
II S LinVB 2:5  Bongo Davidi atindi bantoma epai ya bato ba Yabes na maloba maye : « Yawe abenisa bino, zambi bosalaki mosala mwa ngolu, awa bokundaki mokonzi wa bino Saul.
II S LinVB 2:6  Yawe alakisa bino ngolu na bolamu ! Se bongo ngai mpe nakosala bino malamu.
II S LinVB 2:7  Bino lokola, bolendisa mitema mpe bozala na mpiko. Solo, mokonzi wa bino awei, kasi boyeba ’te bato ba libota lya Yuda bapakoli ngai mafuta mpo nazala mokonzi wa bango. »
II S LinVB 2:8  Abner, mwana wa Ner, komanda wa basoda ba Saul, akendeki na Isboset, mwana wa Saul, o Makanaim.
II S LinVB 2:9  Akomisaki ye mokonzi wa mokili mwa Galaad, wa bato ba Aser, wa Yizreel, Efraim, Benyamin, mpe wa Israel mobimba.
II S LinVB 2:10  Isboset, mwana wa Saul, akokisi mibu ntuku inei o nta­ngo akomi mokonzi wa Israel, mpe ayangeli bato mibu mibale. Se bato ba libota lya Yuda balandi Davidi.
II S LinVB 2:11  Davidi afandi o Ebron bo mokonzi wa libota lya Yuda mibu nsambo na sanza motoba.
II S LinVB 2:12  Abner, mwana wa Ner, na basoda ba Isboset, mwana wa Saul, balongwi o Makanaim mpo bakende o Gabaon.
II S LinVB 2:13  Yoab, mwana wa Seruya, na basoda ba Davidi babimi mpe. Bakutani penepene na etima ya Gabaon, mpe batelemi epai na epai ya etima.
II S LinVB 2:14  Abner alobi na Yoab : « Tika bilenge bateleme mpe babunda o miso ma biso. » Yoab mpe alobi : « Bateleme ! »
II S LinVB 2:15  Banso batelemi mpe batangi motango mwa bango : bato zomi na babale ba libota lya Benyamin mpo babunela Isboset, mwana wa Saul, na bato zomi na babale mpo babunela Davidi.
II S LinVB 2:16  Moto na moto akangi monguna na motó mpe akotisi mopanga o mopanzi mwa ye, bongo bakufi banso lisanga. Yango wana bapesi esika ena nkombo : Ela­nga ya mbeli. Ezali pene na Gabaon.
II S LinVB 2:17  Etumba engali makasi mokolo mo­na. Abner na bato ba Israel ba-kwei mpe basaleli ba Davidi balo­ngi.
II S LinVB 2:18  Ezalaki wana mpe bana babali basato ba Seruya : Yoab, Abisai na Asael. Asael ayebi kopota mbangu lokola mboloko o esobe.
II S LinVB 2:19  Asael ala­ndi Abner, atamboli se nsima ya ye, o loboko la mobali to la mwasi te.
II S LinVB 2:20  Abner amibongoli mpe atuni ye : « Yo nde Asael ? » Azongisi : « Ngai oyo. »
II S LinVB 2:21  Abner alobi na ye : « Tala epai na epai, me­ka kokanga soda moko mpe botolo ye bibuneli. » Kasi Asael ali­ngi kotika Abner te.
II S LinVB 2:22  Abner alobi lisusu na Asael : « Longwa mpe tika kolanda ngai ! Olingi naboma yo ? Soko nasali bongo, boniboni nakoki kobima lisusu o miso ma ndeko wa yo Yoab ? »
II S LinVB 2:23  Ka­si Asael alingi kotika ye te. Abner atuti ye o libumu na esimbeli ya liko­ngo lya ye. Likongo libimi epai ya mo­kongo. Asael akwei mpe awei o esika ena. Bato banso, awa bakomi o esika Asael akweyaki mpe akufi, batelemi.
II S LinVB 2:24  Yoab na Abisai bakei kolanda Abner, mpe pene na butu bakomi o ngomba Ama, eye ezali o Esti ya Giak, o nzela ekokende o eliki ya Gabaon.
II S LinVB 2:25  Bato ba Benyamin basangani epai ya Abner, batandani milongo mpe batelemi o nsonge ya ngomba.
II S LinVB 2:26  Abner abeleli Yoab mpe atuni ye : « Mopanga mokolia nde bato ntango inso ? Oyebi te ’te makambo mana makosuka mabe ? Mokolo nini okoloba na bato ba yo batika kolanda bandeko ba bango ? »
II S LinVB 2:27  Yoab azongisi : « Lokola Yawe azali na bomoi, soko olobaki bongo te, mbele basoda ba ngai batikaki kolanda bandeko ba ba­ngo se lobi na ntongo. »
II S LinVB 2:28  Yoab abeti mondule, mpe bato banso batelemi, batiki kolanda ba-Israel mpe babundi etumba lisusu te.
II S LinVB 2:29  Abner na bato ba ye batamboli o lobwaku la Araba butu mobimba. Bakatisi Yordane, baleki o mokili mwa Bitron mpe bakomi o Makanaim.
II S LinVB 2:30  Yoab atiki kolanda Abner, asangisi basoda ba ye banso. O kati ya basali ba Davidi bato zomi na li-bwa na mpe Asael bakufaki.
II S LinVB 2:31  Basoda ba Davidi babomaki ba-Benyamin na ba-Abner nkama isato na ntuku motoba.
II S LinVB 2:32  Bamemi ebembe ya Asael mpe bakundi yango o lilita lya tata wa ye o Beteleme. Yoab na bato ba ye batamboli butu mobimba ; etani nto­ngo bakomi o Ebron.
Chapter 3
II S LinVB 3:1  Bitumba biumeli mingi kati ya bato ba libota lya Saul na bato ba libota lya Davidi. Davidi azalaki se kolenda mokolo na mokolo, kasi libota lya Saul lizalaki se kozonga nsima.
II S LinVB 3:2  Bana ba Davidi babotami o Ebron, bango baye : Amon, mwana mobali wa yambo ; mama wa ye Akinoam wa Yizreel.
II S LinVB 3:3  Mozimi wa ye Kileab, mama wa ye Abigayil, mwasi wa Nabal, moto wa Karmel. Mwana wa basato Absalom ; mama wa ye Maka, mwana wa Talmai, mokonzi wa Gesur.
II S LinVB 3:4  Mwa­na wa banei, Adonia ; mama wa ye Kagit. Mwana wa batano, Sefatia ; mama wa ye Abital.
II S LinVB 3:5  Mwana wa motoba, Yitream. Davidi abotaki ye na Egla. Bango banso bana ba Davidi babotami o Ebron.
II S LinVB 3:6  O ntango bato ba Saul na bato ba Davidi bazalaki kobunda, Abner aluki kokoma mokonzi wa libota lya Saul.
II S LinVB 3:7  Saul azalaki na makango, nko­mbo ya ye Rispa, mwana wa Aya. Isboset atuni Abner : « Mpo nini ota-mbolaki na makango wa tata wa ngai ? »
II S LinVB 3:8  Eyoki Abner maloba mana, asiliki mingi mpe azongisi : « Nazali nde lokola mbwa ya ba-Yuda ? Nazali kotala libota lya tata wa yo Saul se malamu, na bandeko na baninga ba ye banso. Nabikisaki yo o maboko ma Davidi, mpe sikawa opaleli ngai na likambo lya mwasi ona !
II S LinVB 3:9  Yawe asala ngai Abner lokola alingi mpe apesa ngai etumbu soko nakokisi te maye Yawe alakelaki Davidi na ndai,
II S LinVB 3:10  alobaki ’te akobotolo libota lya Saul bokonzi mpe akopesa Davidi ngwe­nde ya bokonzi bwa Israel na Yuda, banda Dan tee Berseba. »
II S LinVB 3:11  Isboset ameki kozongisela Abner liloba lyoko te, zambi abangi ye.
II S LinVB 3:12  Abner atindeli Davidi bantoma ba­tuna ye : « Mokili moye mwa nani ? Malamu okata na ngai bondeko mpe nakopesa yo maboko mpo ’te ba-Israel banso bandima yo. »
II S LinVB 3:13  Davidi ayanoli : « Malamu ! Nakokata bondeko na yo. Nakosenge yo se mpo yoko. Liboso ’te okoma epai ya ngai, yaka elongo na Mikal, mwana wa Saul, soki te obima o miso ma ngai te. »
II S LinVB 3:14  Davidi atindeli Isboset bantoma na maloba maye : « Pesa ngai mwasi wa ngai Mikal, oyo nabalaki nta­ngo nabomaki ba-Filisti monkama. »
II S LinVB 3:15  Isboset atindi bato bakende kokamata ye epai ya mobali wa ye Paltiel, mwana wa Lais.
II S LinVB 3:16  Mobali wa ye akei na ye elongo. Alandi ye tee Bakurim, o nzela azalaki se kolela. Kasi Abner alobi na ye : « Zonga o mboka ! » Bo­ngo azongi.
II S LinVB 3:17  Abner ayokani na bakolo ba Israel. Alobi na bango : « Banda kala bino bolingi Davidi azala mokonzi wa bino.
II S LinVB 3:18  Bobongisa likambo lina sikawa, zambi Yawe alobaki mpo ya Davidi : Na mosaleli wa ngai nakobikisa bato ba ngai ba-Israel o maboko ma ba-Filisti mpe ma banguna ba bango ba­nso. »
II S LinVB 3:19  Abner alobi se bongo na bato ba Benyamin ; na nsima akei o Ebron koyebisa Davidi makambo manso ba-Israel na bato ba Benyamin bandimaki kosala.
II S LinVB 3:20  Abner akei elongo na bato ntuku ibale, akomi epai ya Davidi o Ebron. Davidi alambeli Abner na bato ba ye limpati.
II S LinVB 3:21  Na nsima Abner alobi : « Na­kokende kosangisa ba-Israel ba­nso pe­nepene na mokonzi wa ngai. Bakokata na yo bondeko mpe yo okozala mokonzi bipai binso olingi. » Davidi atiki Abner akende ; Abner akei na boboto.
II S LinVB 3:22  Basoda ba Davidi na Yoab balongwi o esika ya bitumba mpe bazongi na biloko ebele babotoloki o etumba. Abner azalaki lisusu epai ya Davidi o Ebron te, zambi Davidi apesaki ye nzela ya kokende na boboto.
II S LinVB 3:23  Ezongi Yoab na basoda ba ye o mboka, bayebisi Yoab ’te Abner, mwana wa Ner, ayaki epai ya Davidi ; oyo atikaki ye akende na boboto.
II S LinVB 3:24  Yoab akei epai ya mokonzi mpe alobi na ye : « Osali nini ? Abner ayaki epai ya yo ! Mpe otikaki ye akende lisusu !
II S LinVB 3:25  Oyebi Abner, mwana wa Ner, ayaki awa bobele mpo ’te akosa yo, ayeba ngonga nini okobimaka mpe okozongaka, ayeba mpe makambo manso okosalaka. »
II S LinVB 3:26  Ebimi Yoab o ndako ya Davidi, atindi bantoma bakende koluka Abner mpe bazongisa ye ut’o esika ake­ndeki epai ya etima ya Sira, Davidi ayebi yango te.
II S LinVB 3:27  Abner azongi o Ebron, Yoab abendi ye mpembeni, pene na ezibeli ya ndako, asali lokola alingi koloba na ye malembe, mpe kuna atuti ye o libumu, abomi ye, mpo abomaki ndeko wa ye Asael.
II S LinVB 3:28  Eyo­ki Davidi likambo lina, alobi : « Mpo ya liwa lya Abner, mwana wa Ner, biso na bato ba ekolo ya ngai tozali na likambo lyoko te o miso ma Yawe.
II S LinVB 3:29  Makila maye masopani ma­kwela Yoab na bandeko ba ye banso ! O libota lya Yoab mpasi ezanga mokolo moko te, emonono epai ya ba­ngo ntango inso : to moto atanga nzoto mai, to moto abele bokono bwa maba, to moto atambola na lingenda, to moto akufa na mopanga, to moto akelela mampa ! »
II S LinVB 3:30  Yoab na ndeko wa ye Abisai babomaki Abner, zambi ye abomaki ndeko wa bango Asael o etumba ya Gabaon.
II S LinVB 3:31  Davidi alobi na Yoab mpe na bato ba ye banso : « Bopasola bilamba bya bino, bolata mpili mpe bosala lilaka mpo ya Abner. » Mokonzi Davidi alandi epomba.
II S LinVB 3:32  Bakundi Abner o Ebron. Pene na lilita lya Abner mokonzi aleli makasi, mpe bato banso baleli lokola.
II S LinVB 3:33  Mpo ya kolela Abner mokonzi ayembi nzembo eye : « Abner akufa bongo lokola elema akokufaka ?
II S LinVB 3:34  Bakangaki maboko ma yo te, bakangaki makolo ma yo na minyololo te. Okufi lokola moto akwei o maboko ma bayibi ! » Mpe bato banso babandi kolela ye lisusu.
II S LinVB 3:35  Na nsima bato banso bakei epai ya Davidi mpo ya kobondela ye alia ntango moi mokiti naino te. Kasi Davidi alayi ndai : « Yawe asala ngai lokola alingi mpe apesa ngai etumbu soko nalei mampa to eloko ata nini awa moi mokiti naino te. »
II S LinVB 3:36  Bato ba­nso bamoni yango mpe bandimi, za­mbi bandimi makambo manso Davidi azalaki kosala.
II S LinVB 3:37  O mokolo mona ba-Israel banso bamoni ’te liwa lya Abner, mwana wa Ner, lizalaki lika­mbo lya mokonzi te.
II S LinVB 3:38  Mokonzi alobi na basaleli ba ye : « Bino boyebi te ’te lelo nkumu mpe moto monene akufi o Israel ?
II S LinVB 3:39  Sikawa nalendi naino te, ata bapakolaki ngai mafuta ma bokonzi. Kasi bana ba Seruya baleki ngai na bokasi. Malamu Yawe azo­ngisela moto mabe maye manso asalaki. »
Chapter 4
II S LinVB 4:1  Eyoki Isbaal, mwana wa Saul ’te Abner akufi o Ebron, alembi nzo­to mpe bato banso ba Israel bayoki motema nsomo.
II S LinVB 4:2  Isbaal, mwana wa Saul azalaki na bakomanda ba basoda babale, nkombo ya bango Baana na Rekab. Bazalaki bana ba Rimon wa Beerot, ba libota lya Benyamin ; Beerot ezali mpe libota lyoko lya Benyamin.
II S LinVB 4:3  Kala ba-Beerot bakimaka mpe bakei kofanda tee lelo o Gitayim bo bampaya.
II S LinVB 4:4  Yonatan, mwana wa Saul, azalaki na mwana abukana makolo mabale ; akokisaki mibu mitano ntango nsango ya liwa lya Saul na Yonatan eutaki o Yizreel. Mama wa ye mobokoli amemeki ye mpe aki­maki na ye ; mwana akweyaki mpe makolo ma ye mabukani libela. Nko­mbo ya ye Mefiboset.
II S LinVB 4:5  Bana ba Rimon wa Beerot, Rekab na Baana bakei ; bakomi o ndako ya Isboset o ngonga moi moleki makasi. Ye azalaki kolala mpongi nsima ya midi.
II S LinVB 4:6  Bayingeli o ndako, basali lokola bato bayei koteke mbuma ya ma­mpa, bazokisi Isboset o libumu. Na nsima Rekab na ndeko wa ye Baana bakimi.
II S LinVB 4:7  Bakotoki o ndako esika Isboset azalaki kolala o mbeto, bakati ye nkingo mpe akufi. Na nsima bamemi motó mwa ye mpe batamboli o nzela ya Araba butu mobimba.
II S LinVB 4:8  O Ebron bayeli Davidi motó mwa Isboset mpe balobi na mokonzi : « Tala motó mwa Isboset, mwana wa Saul, monguna wa yo, oyo alukaki koboma yo. Lelo Yawe azongiseli Saul na libota lya ye mabe basalaki yo mokonzi wa biso. »
II S LinVB 4:9  Kasi Davidi ayanoli Rekab na nde­ko wa ye Baana, bana ba Rimon wa Beerot : « Lokola Yawe azali na bomoi, oyo abikisaki ngai o makama manso,
II S LinVB 4:10  moto ayebisaki ngai ’te Saul akufi, akanisaki ’te ayeli ngai nsango elamu, kasi nakangaki ye mpe nabomaki ye o Siklag. Nasalaki bongo mpo ya kofuta nsango elamu ayelaki ngai !
II S LinVB 4:11  Kasi likambo liye lileki na bobe, zambi bato babe babomaki moto wa bosembo o ndako ya ye, ntango azalaki kolala o mbeto. Bongo natuna bino te mpo ya makila masopani na maboko ma bino, mpe nalongola bino o mokili te ? »
II S LinVB 4:12  Davidi apesi bilenge babali etinda. Babomi bango babale, bakati bango maboko na makolo mpe batingisi bango o nzete penepene na etima ya Ebron. Bakamati motó mwa Isboset mpe bakundi mwango o lilita lya Abner o Ebron.
Chapter 5
II S LinVB 5:1  Mokolo moko bakolo ba mabota ma Israel bayei epai ya Davidi o mboka Ebron, balobi : « Biso na yo tozali makila moko.
II S LinVB 5:2  Uta kala ntango Saul azalaka mokonzi, yo moto ozalaki kotambwisa mpe koyangela basoda ba Israel, mpe Yawe alobaki na yo : Yo moto okoleisa mpata ya Israel, okozala mokonzi wa ekolo Israel. »
II S LinVB 5:3  Bakolo banso ba Israel bayei epai ya mokonzi Davidi o mboka Ebron ; mpe kuna mokonzi Davidi akati na bango bondeko o miso ma Yawe ; bapakoli Davidi mafuta mpo ’te azala mokonzi wa Israel.
II S LinVB 5:4  Ntango Davidi akomi mokonzi, akokisi mibu ntuku isato, mpe aumeli o bokonzi mibu ntuku inei.
II S LinVB 5:5  O Ebron azalaki mokonzi wa etuka ya Yuda mbula nsambo na sanza motoba. O Yeruzalem ayangeli ekolo Israel mobimba na mpe Yuda mbula ntuku isato na isato.
II S LinVB 5:6  Davidi na basoda ba ye bakei o Yeruzalem kobunda na ba-Yebus, bato bafandi wana. Bango balobi na Davidi : « Okokoto awa te ! Ata bato bakufa miso mpe baye babukana makolo bakozongisa yo nsima ! »
II S LinVB 5:7  Kasi Davidi akweisi bango, abotoli ngo­mba Sion, yango ekomi engumba ya Davidi.
II S LinVB 5:8  Mokolo mona Davidi alo­bi : « Oyo alingi koboma ba-Yebus asengeli koleka o nzela ya mai ! Kasi ngai Davidi nayini bato bakufa makolo mpe baye bakufa miso. » Ntina ena bakolobaka : « Moto akufa miso to makolo ayingela o Tempelo te. »
II S LinVB 5:9  Davidi akei kofanda o ebombamelo mpe atangi yango ‘Engumba ya Davidi’. Na nsima atongi naino ndako isusu zongazonga na ebombamelo ba­nda Milo tee o kati ya mboka.
II S LinVB 5:10  Davidi akoli na bwanya mpe na nguya, mpe Yawe Nzambe wa bokasi bonso azalaki na ye.
II S LinVB 5:11  Kiram, mokonzi wa Tiro, atindi bantoma epai ya Davidi. Bayei na mabaya ma sédere, na bato bayebi mosala mwa mabaya na bato bayebi kokata mabanga, mpe batongeli Davidi ndako.
II S LinVB 5:12  Bongo Davidi ayebi ’te Yawe alubolaki ye mokonzi wa Israel mpe atomboli bokonzi bwa ye mpo ya bolamu bwa Israel, ekolo ya ye.
II S LinVB 5:13  Elongwaki Davidi o Ebron, akamati naino bamakango na basi basusu o Yeruzalem. Aboti naino bana ba­bali na bana basi.
II S LinVB 5:14  Nkombo ya bana babotami o Yeruzalem bango baye : Samua, Sobab, Natan, Salomo,
II S LinVB 5:17  Awa ba-Filisti bayoki ’te bapakolaki Davidi mafuta mpo azala mokonzi wa Israel, banso bakei koluka Davidi mpo bakanga ye. Eyoki Davidi yango, akei kofanda o ebombamelo.
II S LinVB 5:18  Ba-Filisti bayei mpe bamile­ngeli mpo ya etumba o lobwaku la ba-Refaim.
II S LinVB 5:19  Davidi atuni Yawe : « Na­kende kobunda na ba-Filisti ? Okokaba bango o maboko ma ngai ? » Yawe azongisi : « Kende kobunda na bango ; nakokaba ba-Filisti solo o ma­boko ma yo. »
II S LinVB 5:20  Davidi akei o Baal-Perasim mpe alongi bango. Alobi : « Yawe apasoli nzela o kati ya banguna ba ngai lokola mai makopasolaka nzela o mabelé. » Yango wana bapesi esika ena nkombo Baal-Perasim.
II S LinVB 5:21  Ba­nguna ba­tikaki bikeko bya ba­nzambe ba ba­ngo kuna, kasi Davidi na bato ba ye balongoli byango.
II S LinVB 5:22  Ba-Filisti bakei kobunda lisusu mpe bamilengeli mpo ya etumba o lobwaku la ba-Refaim.
II S LinVB 5:23  Davidi atuni Yawe, mpe Yawe ayanoli ye : « Nta­ngo okokende kobunda na bango, omilakisa te ; kasi leka nsima ya ba­ngo mpe okuta bango o boso bwa nzete ya wenge.
II S LinVB 5:24  Soko oyoki lokito la makolo ma Yawe azali koleka o nsonge ya nzete ena, obanda etumba ! Ntango ena Yawe akokende liboso lya yo mpo ya kokweisa ba-Filisti. »
II S LinVB 5:25  Davidi asali lokola Yawe atindaki ye mpe alongi ba-Filisti ba­nda Gabaon tee Gezer.
Chapter 6
II S LinVB 6:1  Davidi asangisi lisusu basoda ba mpiko banso ba Israel, bato nkoto ntuku isato.
II S LinVB 6:2  Davidi elongo na basoda ba ye banso bakei o Baala o Yuda mpo ’te balongola kuna Sanduku ya Nzambe, eye ezali na nkombo ya Yawe wa bokasi bonso, oyo akofandaka likolo lya bakerubim.
II S LinVB 6:3  Batii Sanduku ya Nzambe o likalo lya sika, mpe balongoli yango o ndako ya Abinadab o ngomba. Uza na Akio, bana ba Abinadab, batambwisi likalo.
II S LinVB 6:4  Uza atamboli mpembeni ya Sanduku ya Nzambe, mpe Akio atamboli liboso lya Sanduku.
II S LinVB 6:5  Davidi na bato banso ba Israel babineli Yawe, babeti miziki ndenge na ndenge, bayembi nzembo na lomeke la nzenze, like-mbe, mpiololo, lokombe na migbala.
II S LinVB 6:6  Bakomi pene na etutelo ya Nakom. Uza atomboli loboko mpo ya kosimba Sanduku ya Nzambe, zambi ngombe ilingi kokweisa yango.
II S LinVB 6:7  Yawe asiliki makasi na Uza mpe bobele wana Nzambe apesi ye etumbu mpo ya mabe asalaki. Akufi se wana penepene na Sanduku ya Nzambe.
II S LinVB 6:8  Davidi ayoki motema nsomo, zambi Yawe abeteki Uza. Bapesi esika ena nko­mbo Peres-Uza ; nkombo ena ezali naino tee lelo.
II S LinVB 6:9  Davidi akomi kobanga Yawe o mokolo mona mpe alobi : « Boniboni Sanduku ya Yawe ekoki kokoma o ndako ya ngai ? »
II S LinVB 6:10  Davidi atiki bongo komeme Sanduku ya Yawe epai ya ye, o Engumba ya Davidi, mpe akei kotika yango o ndako ya Obed-Edom, moto wa Gat.
II S LinVB 6:11  Sanduku ya Yawe etikali bongo o ndako ya Obed-Edom, moto wa Gat, sanza isato, mpe Yawe abenisi Obed-Edom na libota lya ye mobimba.
II S LinVB 6:12  Bayebisi mokonzi Davidi ’te Yawe abenisi libota lya Obed-Edom na biloko bya ye binso mpo ya Sanduku ya Nzambe. Bongo Davidi akei kokamata Sanduku ya Nzambe o ndako ya Obed-Edom, mpe akei na yango na esengo enene o Engumba ya Davidi.
II S LinVB 6:13  Awa baye bamemi Sanduku ya Yawe batamwisi makolo se mbala motoba, Davidi abonzi ngombe mobali na mwana mpata mafuta.
II S LinVB 6:14  Davidi abineli Yawe mabina na nguya ya ye inso, alati efod ya malekani.
II S LinVB 6:15  Na nzembo mpe na mindule Davidi na ba-Israel banso bakei kotika Sanduku ya Yawe.
II S LinVB 6:16  Nzokande, o ntango Sa­nduku ya Bondeko eyingeli o Engu­mba ya Davidi, mwana mwasi wa Saul, Mikal, atali ut’o lininisa mpe amo­ni ’te mokonzi Davidi azalaki kopimbwa o miso ma Yawe ; yango wana akinoli ye o kati ya motema.
II S LinVB 6:17  Awa bakomi o mboka batii Sanduku ya Yawe o nse ya ema eye Davidi abongisaki. Davidi abonzeli Yawe mabonza ma kotumba mpe ma bolei.
II S LinVB 6:18  Awa asilisi kobonza mabonza, abenisi bato na nkombo ya Yawe wa mampinga.
II S LinVB 6:19  Akabeli ba-Israel banso, babali na basi, ndambo ya mampa na mbuma ; akabeli bango mpe minkate balambi na mbuma ya vino ya kokauka. Na nsima bazongi, moto na moto o mboka ya ye.
II S LinVB 6:20  Ntango Davidi azongi o ndako ya ye mpo ’te abenisa libota lya ye, Mikal, mwana wa Saul, akutani na ye mpe alobi : « Solo, mokonzi wa Israel amipesi lokumu lonene lelo, awa alongoli bilamba bya ye o miso ma basaleli basi na babali, se lokola moto mpamba akosalaka ! »
II S LinVB 6:21  Davidi ayanoli Mikal : « Nabini o miso ma Yawe, oyo aponoki ngai mpe apusi kondima ngai liboso lya tata wa yo na libota lya ye mobimba ; ye moto alubolaki ngai mokonzi wa Israel.
II S LinVB 6:22  Nakomikitisa naino mpe nakomikomisa moto mpa­mba o miso ma ngai moko, kasi o miso ma basi basali, baye otangi, nako­zwa lokumu. »
II S LinVB 6:23  Mpe Mikal, mwana wa Saul, aboti mwana te tee mokolo mwa liwa lya ye.
Chapter 7
II S LinVB 7:1  Ntango mokonzi Davidi asili ayingeli o ndako ya ye, Yawe akweisi banguna ba ye banso o bikolo bya mpembeni, batiki ye kimia.
II S LinVB 7:2  Mokolo moko Davidi alobi na profeta Natan : « Tala naino, ngai nakofa­ndaka o ndako ya mabaya ma sédere, mpe Sanduku ya Bondeko ya Nza­mbe ezali o nse ya ema ! »
II S LinVB 7:3  Natan azo­ngisi : « Kende mpe sala manso olingi kosala, Yawe azali na yo. »
II S LinVB 7:4  Kasi o butu bonamei mpenza Yawe atindeli Natan maloba maye :
II S LinVB 7:5  « Ke­nde koyebisa mosaleli wa ngai Davidi ’te Yawe alobi boye : « Yo moto okoto­ngela ngai ndako nafanda wana ?
II S LinVB 7:6  Ut’o mokolo nalongolaki bana ba Israel o Ezipeti tee lelo, nafa­nda­ki o ndako te ; na­zalaki bobele kolekaleka elongo na bango, lelo awa, lobi kuna, o ema.
II S LinVB 7:7  Nta­ngo inso natambolaki na ba-Israel elongo natunaki ata moko te wa bayangeli ba Israel, baye naponoki bo bakengeli ba ekolo ya ngai Israel : “Mpo nini bokotongela ngai ndako ya mabaya ma sédere te ?” »
II S LinVB 7:8  Yoka maloba okoloba na mosaleli wa ngai Davidi : Yawe wa mampinga alobi boye : Ngai moto nakamataki yo o esobe, esika ozalaki ko­kengele mpata, mpo ozala moko­nzi wa ekolo ya ngai Israel.
II S LinVB 7:9  Nazalaki na yo bipai binso okendeki ; nasilisi banguna ba yo banso o miso ma yo. Nakopesa yo nkombo ya lokumu lokola nkombo ya bankumu banene ba mokili.
II S LinVB 7:10  Nakopesa bana ba ekolo ya ngai esika, nakofandisa bango kuna mpe bakotikala kuna seko. Bakoyengayenga lisusu te, mpe bato babe bakonyokolo bango lokola liboso lisusu te.
II S LinVB 7:11  O ntango natiaki bazuzi mpo ’te baya­ngela ekolo ya ngai Israel, nasali ’te banguna ba yo banso batika yo kimia. Yawe alakeli yo ’te ako­tongela yo ndako.
II S LinVB 7:12  Mpe soko mikolo mya yo mikoki, okokende o mboka ya bankoko ba yo, ngai nakofandisa mwana wa yo, mpe nakole­ndisa bokonzi bwa ye.
II S LinVB 7:13  Ye moto akotongela ngai ndako ; ngai nakole­ndisa boko­nzi bwa ye mpo boumela seko.
II S LinVB 7:14  Ngai nakozala tata wa ye, ye akozala mwana wa ngai. Soko asali mabe, nakobetisa ye fimbo mpe bakobamba ye mbata, lokola bato bakosalaka.
II S LinVB 7:15  Kasi nakopima ye bolingi bwa ngai te, lokola nasalaki na Saul, oyo nalongolaki mpo ozwa esika ya ye.
II S LinVB 7:16  Libota lya yo mpe bokonzi bwa yo bikotikala seko o miso ma ngai. Ngwende ya yo ekopikama seko o bileko bi­nso. »
II S LinVB 7:17  Natan akei koyebisa Davidi maloba ma limoni liye manso.
II S LinVB 7:18  Mokonzi Davidi akoti o ndako mpe afandi o boso bwa Yawe, alobi : « E Yawe Nzambe, ngai nde nani mpe libota lya ngai nde nini mpo ’te okomisa ngai o esika eye ?
II S LinVB 7:19  Nzoka­nde o miso ma yo mana manso makoki te, e Mokonzi Yawe ; okanisi mpe bolamu bwa bato ba libota lya mosaleli wa yo, baye bakobotama nsima. Bato bakosalaka nde bongo, e Mokonzi Yawe ?
II S LinVB 7:20  Ngai Davidi naloba nini lisusu, awa yo moko oyebi ngai mosaleli wa yo, e Mokonzi Yawe ?
II S LinVB 7:21  Mpo ya liloba lya yo mpe mpo ya motema mwa yo bolingi osali mosala monene, mpe oyebisi ngai mosaleli wa yo mwango.
II S LinVB 7:22  Solo, e Moko­nzi Yawe, oleki bonene ; moto moko akokani na yo te ; Nzambe mosusu azali te, bobele yo, se lokola toyokaki na matoi.
II S LinVB 7:23  Eko­lo nini o nse mobimba ekokani na Israel, ekolo ya yo, eye Nzambe ye moko akendeki kosikola mpo ’te ekoma ekolo ya ye, ekolo ya lokumu ? Osaleli bango mambi manene mpe ma nsomo ; obengani bikolo bisusu mpe banzambe ba bango o boso bwa ekolo ya yo, eye osikolaki o Ezipeti.
II S LinVB 7:24  Oko­misi Israel ekolo ya solo, mpo ’te ezala ekolo ya yo seko ; mpe yo, Yawe, ozali Nzambe wa bango.
II S LinVB 7:25  Sikawa, Yawe Nzambe, kokisa elako olakelaki ngai mosaleli wa yo na libota lya ngai mobimba, sala lokola olobaki.
II S LinVB 7:26  Nkombo ya yo eko­zwa lokumu seko mpe bato bakoloba : ‘Yawe wa bokasi bonso azali Nzambe o Israel’. Libota lya mosaleli wa yo Davidi likoumela seko o miso ma yo.
II S LinVB 7:27  Yo moko, Yawe wa bokasi bonso, Nzambe wa Israel, oyebisaki ngai mosaleli wa yo boye : ‘Nako­ko­lisa libota lya yo’. Yango wana ngai mosaleli wa yo nazwi mpiko ya kobondela yo bongo.
II S LinVB 7:28  Solo, e Yawe Nzambe, yo ozali Nzambe, maloba ma yo mazala maloba ma bosolo ; yo moko olakelaki ngai mosaleli wa yo elako elamu eye.
II S LinVB 7:29  Bongo obenisa libota lya ngai mosaleli wa yo mpo ’te liumela seko o miso ma yo, zambi yo moko olobaki bongo ; na bobenisi bwa yo, libota lya ngai mosaleli wa yo likozwa bolamu seko. »
Chapter 8
II S LinVB 8:1  Nsima yango Davidi akei kobunda na ba-Filisti mpe alongi bango. Davidi abotoli bango boko-nzi.
II S LinVB 8:2  Alongi mpe ba-Moab. Alalisi ba­ngo o nse, ameki bango na nsinga mpe akaboli bango na mangomba masato. Abomi mangomba mabale mpe atiki lingomba lisusu na bomoi. Bato ba Moab bakomi baombo ba Davidi mpe bafuti ye mpako.
II S LinVB 8:3  Davidi alongi mpe Adadezer, mwa­na wa Rekob, mokonzi wa Soba, oyo alingaki kozwa mokili penepene na ebale Efrate.
II S LinVB 8:4  Davidi akangi basoda ba makalo nkoto yoko na nkama nsambo na basoda ba makolo nkoto ntuku ibale. Davidi akati nsinga ya makalo manso, tika se makalo mo­nkama.
II S LinVB 8:5  Ba-Aram ba Damasko bayei kosalisa Adadezer, mokonzi wa Soba. Kasi Davidi abomi basoda ba Aram nkoto ntuku ibale na ibale.
II S LinVB 8:6  Na nsima atii bayangeli o Damasko, mokili mwa Aram, bongo ba-Aram bakomi baombo ba Davidi mpe bafuti ye mpako. Yawe apesi Davidi lilonga bipai binso azalaki kokende.
II S LinVB 8:7  Davidi akamati nguba ya wolo ya basoda ba Adadezer mpe amemi ya­ngo o Yeruzalem.
II S LinVB 8:8  O bingumba bya Adadezer, o Teba mpe o Berotai, mokonzi Davidi abotoli mbengi mingi mpenza.
II S LinVB 8:9  Eyoki Towu, mokonzi wa Amat ’te Davidi asilisi basoda banso ba Adadezer,
II S LinVB 8:10  atindi mwana wa ye Yoram epai ya mokonzi Davidi mpo ya kopesa ye losako ; apesa ye mpe lo­ngonya zambi alongaki Adadezer o etumba, zambi Adadezer na Towu bazalaki banguna. Yoram amemi biloko bya palata, wolo na mbengi.
II S LinVB 8:11  Mokonzi Davidi abonzeli Yawe bya­ngo binso, se lokola asalaki na palata mpe na wolo iutaki o bikolo bi­nso abotoloki :
II S LinVB 8:12  Aram, Moab, Amon, ba-Filisti, ba-Amalek, na mpe biloko bya Adadezer, mwana wa Rekob, mokonzi wa Soba.
II S LinVB 8:13  O lobwaku la Mongwa Davidi alongi basoda ba Aram nkoto zomi na mwambe, na yango azwi lokumu lonene.
II S LinVB 8:14  Atii bayangeli bipai binso o mokili mwa Edom, mpe Davidi akomi kokonza ba-Edom banso. Yawe apesi Davidi lilonga bipai binso azalaki kokende.
II S LinVB 8:15  Davidi akomi mokonzi wa ekolo Israel mobimba. Azalaki kosambisa bato banso se na bosembo.
II S LinVB 8:16  Yoab, mwana wa Seruya, azalaki komanda wa basoda ; Yozafat, mwana wa Akilud, azalaki koyebisa bato mibeko mya mokonzi ;
II S LinVB 8:17  Sadok, mwana wa Akitub, na Abimelek, mwana wa Ebiatar, bazalaki banganga Nzambe, Seraya azalaki mokomi-minkanda ;
II S LinVB 8:18  Benaya, mwana wa Yeyoda, azalaki komanda wa basoda ba Keret na Pelet ; bana ba Davidi bazalaki ba­nganga Nzambe.
Chapter 9
II S LinVB 9:1  Davidi atuni : « O libota lya Saul, moto moko atikali te mpo ’te nasala ye malamu, mpe bongo nakumisa nkombo ya Yonatan ? »
II S LinVB 9:2  Ezalaki o libota lya Saul mosaleli moko, nko­mbo ’te Siba. Babengi ye epai ya Davidi, mpe mokonzi atuni ye : « Yo nde Siba ? » Ye azongisi : « Ngai oyo, mosaleli wa yo. »
II S LinVB 9:3  Mokonzi atuni lisusu : « O libota lya Saul moto moko atikali naino mpo ’te nalakisa ye bolamu bwa Nzambe ? » Siba ayanoli moko­nzi : « Mwana moko atikali, ye mwana wa Yonatan, abukana makolo mabale. »
II S LinVB 9:4  Mokonzi atuni ye : « Azali wapi ? » Siba azongisi : « Azali o ndako ya Makir, mwana wa Amiel, moto wa Lo-Debar. »
II S LinVB 9:5  Mokonzi Davidi atindi bato bakende kobenga ye o ndako ya Makir, mwana wa Amiel, kuna o Lo-Debar.
II S LinVB 9:6  Mefiboset, mwana wa Yonatan, nkoko wa Saul, akomi epai ya Davidi. Akwei elongi o nse mpe akumbameli ye. Davidi atuni : « Yo Mefiboset ? » Ye azongisi : « Ngai oyo, mosaleli wa yo. »
II S LinVB 9:7  Davidi alobi na ye : « Obanga te, nalingi kolakisa yo bolamu mpo ya tata wa yo Yonatan. Nakozongisela yo mabelé manso ma nkoko wa yo Saul, mpe mikolo minso okolia o meza ya ngai. »
II S LinVB 9:8  Mefiboset akumbami o nse mpe alobi : « Ngai mosaleli wa yo, ngai nde nani mpo ’te olakisa ngai bolamu, awa nazali lokola mbwa ekufi ? »
II S LinVB 9:9  Mokonzi abengi Siba, mosaleli wa Saul, alobi na ye : « Biloko binso bya Saul mpe bya libota lya ye, nakopesa byango na mwana wa mokonzi wa yo.
II S LinVB 9:10  Yo moto akokata bilanga bya ye, elongo na bana ba yo mpe na basali ba yo ; okopesa mwana wa mokonzi wa yo biloko binso asengeli kolia. Mpe Mefiboset, mwana wa mokonzi wa yo, akolia mikolo minso o meza ya ngai. » Siba azalaki na bana babali zomi na batano na basali ntuku ibale.
II S LinVB 9:11  Siba alobi na mokonzi : « Ngai mosaleli wa yo nakosala makambo manso yo mokonzi okotinda ngai », mpe Mefiboset alei o meza ya Davidi, se lokola mwana wa moko­nzi.
II S LinVB 9:12  Mefiboset azalaki na mwana mobali moko, nkombo ’te Mika ; bato banso bafandi o ndako ya Siba, bazalaki kosalela Mefiboset.
II S LinVB 9:13  Mefiboset afandi o Yeruzalem mpe azalaki kolia mikolo minso o meza ya mokonzi. Makolo ma ye mabale mabukana.
Chapter 10
II S LinVB 10:1  Nsima yango mokonzi wa ba-Amon awei mpe mwana wa ye Kanun akitani ye.
II S LinVB 10:2  Davidi alobi : « Nakolakisa Kanun, mwana wa Nakas, bolamu, se lokola tata wa ye alakisaki ngai. » Davidi atindeli ye basaleli ba ye bakende kobondo ye mpo ya liwa lya tata wa ye. Basaleli bakomi bongo o mokili mwa ba-Amon.
II S LinVB 10:3  Ka­si bankumu ba ba-Amon balobi na Kanun, mokonzi wa bango : « Oka­nisi solo ’te Davidi alingi kokumisa tata wa yo, awa atindeli yo bato babondo yo ? Mbele atindi bango mpo ’te banongo mboka mpe bayeba boniboni akoki kobebisa yango. »
II S LinVB 10:4  Kanun akangi basaleli ba Davidi mpe akati bango ndambo ya mandefu ; akati mpe ndambo ya bilamba tee o loketo, na nsima atiki bango bake­nde.
II S LinVB 10:5  Bayebisi Davidi likambo lina, bongo atindi moto moko akende kokutana na bango, mpo bakomi koyoka nsoni mingi. Mokonzi alobi na bango : « Botikala o Yeriko tee ma­ndefu makola. Bobele na nsima bokoki kozonga awa. »
II S LinVB 10:6  Ba-Amon bamoni ’te basalaki mabe o miso ma Davidi. Batindi bantoma bakende kofuta basoda ba Aram, ba Bet-Rekob, mpe ba Soba ; bango banso basoda ba makolo nkoto ntuku ibale ; mokonzi wa Maaka atindi bato nkoto yoko, mpe mokonzi wa Tob atindi bato nkoto zomi na ibale.
II S LinVB 10:7  Awa Davidi ayoki yango, atindi Yoab elongo na basoda banso ba mpiko.
II S LinVB 10:8  Bato ba Amon babimi o mboka mpe batandi milongo pene na ezibeli ya mboka. Ba-Aram, ba-Soba, ba-Rekob, ba-Tob na ba-Maaka batikali o esobe.
II S LinVB 10:9  Yoab amoni ’te banguna bazalaki komilengele mpo ya etumba o liboso mpe o nsima ya ye. Aponi basoda ba mpiko ba Israel mpe atii bango liboso lya ba-Aram.
II S LinVB 10:10  Atikeli ndeko wa ye Abisai limpinga lya basoda mpe atii bango o boso bwa ba-Amon.
II S LinVB 10:11  Alobi na ye : « Soko ba-Aram baleki ngai na bokasi, okoya kosalisa ngai, soko ba-Amon baleki yo na bokasi, ngai nakoya kosalisa yo.
II S LinVB 10:12  Zala na mpiko mpe tomilakisa babali mpo ya kobikisa bato ba ekolo ya biso mpe mboka ya Nzambe wa biso. Yawe asala lokola alingi ! »
II S LinVB 10:13  Yoab na basoda ba ye bakei liboso mpo ya kobunda na ba-Aram, baye bakimi o miso ma ye.
II S LinVB 10:14  Emoni ba-Amon ’te ba-Aram bakimi, bango mpe bakimi o miso ma Abisai mpe bazongi o mboka. Yoab atiki kobundisa ba-Amon mpe azongi o Yeruzalem.
II S LinVB 10:15  Emoni ba-Aram ’te bato ba Israel balongi bango, basangisi basoda ba­nso.
II S LinVB 10:16  Adadezer atindi bantoma mpe abengi ba-Aram banso bakofandaka o ngambo ya Ebale. Bango bakei o Kelam ; Sobak ayangeli limpinga lya basoda ba Adadezer.
II S LinVB 10:17  Bakei koyebisa Davidi mpo yango. Ye asangisi ba-Israel banso, akatisi Yordane mpe ako­mi o Kelam. Ba-Aram batandi mi­longo mya basoda o boso bwa Davidi mpe babundi na ye etumba.
II S LinVB 10:18  Kasi ba-Aram bakimi liboso lya Israel. Davidi abomi farasa nkama nsambo mpe basoda ba makalo nkoto ntuku inei. Abomi mpe Sobak, komanda wa basoda ba Aram, oyo akufi bobele kuna.
II S LinVB 10:19  Emoni bakonzi, baye bake­ndeki kosalisa Adadezer ’te ba-Israel balongi bango, bakati bondeko na ba-Israel mpe bakomi kosalela ba­ngo. Ba-Aram babangi kosalisa lisusu bato ba Amon o etumba.
Chapter 11
II S LinVB 11:1  Esili elanga, ntango bakonzi bakokendeke etumba, Davidi atindi mokonzi wa basoda Yoab ake­nde kobunda. Akei na basoda ba ye mpe na basoda ba Israel mobimba. Bakweisi ba-Amon, mpe bakei kozinga mboka Raba. Kasi Davidi atikali o Yeruzalem.
II S LinVB 11:2  Mokolo moko na mpokwa, Davidi alongwi o litoko mpe akei kota­mbola moke o mbalasani ya ndako ya ye enene. Amoni mwasi moko o lopango la penepene, azalaki kosukola nzoto ; mwa­si oyo azalaki kitoko mpenza.
II S LinVB 11:3  Da­vidi atindi moto moko, atuna ye soko azali mwasi wa nani. Bayebisi ye : « Azali Betsabe, mwana wa Eliam, mwasi wa Uria, moto wa Eti. »
II S LinVB 11:4  Davidi atindi bato babenga ye. Mwasi ayei mpe Davidi alali na ye ; ezalaki o mikolo apetoli nzoto nsima ya komono sanza. Bongo mwasi azo­ngi o ndako ya ye.
II S LinVB 11:5  Akomi na zemi mpe atindi maloba epai ya Davidi : « Nazwi zemi. »
II S LinVB 11:6  Bongo Davidi atindeli Yoab maloba maye : « Yebisa Uria, moto wa Eti, aya epai ya ngai. » Yoab asali bongo, atindi Uria epai ya Davidi.
II S LinVB 11:7  Ntango Uria akomi epai ya ye, Davidi atuni ye soko Yoab na basoda ba ye bazalaki malamu, mpe soko etumbu ezalaki koleka malamu.
II S LinVB 11:8  Na nsima alobi na Uria : « Kende kopema mwa moke o ndako ya yo. » Uria abimi o ndako ya mokonzi, mpe batindeli ye biloko biuti o meza ya mokonzi.
II S LinVB 11:9  Kasi Uria azongi o ndako ya ye te, atikali kolala na butu pene na ezibeli ya ndako ya mokonzi, esika yoko na bakengeli.
II S LinVB 11:10  Bayebisi Davidi ’te Uria akendeki o ndako ya ye te. Davidi atuni Uria : « Yo outi mosika te ? Mpo nini oke-ndeki o ndako ya yo te ? »
II S LinVB 11:11  Uria azongisi : « Sanduku ya Bondeko, basoda ba Israel mpe ba Yuda bazali kolala o lisasa. Mokonzi wa ngai Yoab na basoda ba mokonzi wa ngai bazali kolala libanda o esobe. Bongo ngai nakende o ndako ya ngai, nalia, namele mpe nalala na mwasi wa ngai ? Soko ya solo Yawe azali na bomoi mpe yo ozali na bomoi, nakoki kosala likambo lya motindo mona te. »
II S LinVB 11:12  Davidi alobi na Uria : « Lelo otikala naino awa, lobi nakopesa yo mokolo mwa bopemi. » Bongo mokolo mona Uria atikali naino o Yeruzalem, na mpe mokolo mwa nsima.
II S LinVB 11:13  Davidi abengi Uria aya kolia mpe komele epai ya ye, mpe alangwisi ye. Na mpokwa ena Uria abimi, kasi akei o ndako ya ye te, alali bobele esika yoko na bakengeli ba mokonzi.
II S LinVB 11:14  Etani ntongo, Davidi akomeli Yoab monkanda mpe apesi Uria ake­nde na yango.
II S LinVB 11:15  Akomi boye : « Tinda Uria o esika etumba ezali kongala ; na nsima otika ye moko, azoka mpe akufa. »
II S LinVB 11:16  Yoab na bato ba ye bameki kozinga mboka ya banguna. Bongo atii Uria o esika banguna baleki makasi.
II S LinVB 11:17  Basoda bazalaki o mboka babimi, babundi na bato ba Yoab. Basusu o kati ya basoda ba Davidi bakufi ; Uria, moto wa Eti, akufi mpe.
II S LinVB 11:18  Yoab atindi moto moko akende koyebisa Davidi boniboni etumba elekaki.
II S LinVB 11:19  Apesi ntoma wa ye etinda eye : « Esilisi yo koyebisa mokonzi ma­kambo manso malekaki o etumba,
II S LinVB 11:20  soko akomi kosilika mpe alobi : ‘Mpo nini bokendeki kobunda penepene na mboka ? Boyebaki te ’te kuna likolo lya lopango bato bazali kobete makula ?
II S LinVB 11:21  Nani abomaki Abimelek mwana wa Yerubaal ? Bobele mwasi abwakelaki ye libanga linene te ? Bo­ngo akufi o Tebes te ? Mpo nini bokendeki penepene na lopango la mboka ?’, okoloba na ye : Mosaleli wa yo Uria, moto wa Eti, ye mpe akufi. »
II S LinVB 11:22  Ntoma akei koyebisa Davidi ma­nso se lokola Yoab atindaki ye.
II S LinVB 11:23  Nto­ma alobi na Davidi : « Banguna balekaki biso na bokasi. Babimaki o mbo­ka mpo ya kobunda na biso o esobe, kasi biso tozongisaki bango tee o ezibeli ya mboka.
II S LinVB 11:24  Bato ba matimbo babeteli basali ba yo makula ut’o lopango. Basoda basusu, bake­ngeli ba mokonzi bakufi ; mosaleli wa yo Uria, moto wa Eti, ye akufi lokola. »
II S LinVB 11:25  Davidi alobi na ntoma : « Loba na Yoab maloba maye : Omitungisa na likambo lina te ; mopanga mokobomaka bato, lelo moto oyo, lobi moto mosusu. Buna etumba na mpiko mpe boma mboka mobimba. Se bongo oko­lendisa ye motema. »
II S LinVB 11:26  Eyoki mwa­si wa Uria ’te mobali wa ye awei, aleli ye.
II S LinVB 11:27  Esili lilaka, Davidi atindi ’te bakende kokamata ye mpe ayambi ye o ndako ya ye ; akomi bongo mwasi wa ye mpe aboteli ye mwana mobali. Kasi likambo Davidi asalaki lisepelisi Yawe te.
Chapter 12
II S LinVB 12:1  Yawe atindi profeta Natan o mboka Davidi. Ayingeli o ndako ya ye mpe alobi : « Ezalaka bato babale bafandi o mboka yoko, mosusu moto wa nkita, mosusu mobola.
II S LinVB 12:2  Moto wa nkita azalaki na ngo­mbe mpe na mpata mingi mpenza.
II S LinVB 12:3  Mobola azalaki na eloko te, se mwana mpata yoko eye asombaki ; abokoli yango. Mpata yango ezalaki kokola o kati ya bana ba ye. Ezalaki kolia mampa nkolo akoliaka, komele o kopo ye moko akomeleke, mpe kolala o mopanzi mwa ye ; ekomi lokola moko wa bana ba ye.
II S LinVB 12:4  Mokolo moko mompaya ayei kotala moto wa nkita. Akamati mpata to ngombe o lopango la ye moko te, kasi akei koyiba mpata ya mobola mpe alambeli mompaya. »
II S LinVB 12:5  Ntango Davidi ayoki yango, ayoki mabe mpo ya maye moto ona asali ; alobi na Natan : « Soko Yawe azali solo, moto asalaki bongo, akoki na liwa !
II S LinVB 12:6  Mpata ye ayibi, afuta yango mbala inei, zambi asali likambo lya motindo mona mpe ayokeli mobola mawa te. »
II S LinVB 12:7  Sikawa Natan alobi na Davidi : « Mo­to oyo, bobele yo ! Yawe, Nza­mbe wa Israel, alobi boye : Napakolaki yo mafuta mpo ozala mokonzi wa Israel ; nabikisaki yo o maboko ma Saul ;
II S LinVB 12:8  napesaki yo ndako ya ye, nakabelaki yo basi ba mokonzi wa yo ; nakomisi yo mokonzi wa mabota ma Israel na Yuda, mpe soko yango ekoki na yo te, mbele nakoki kobakisela yo naino makabo masusu.
II S LinVB 12:9  Mpo nini okinolaki Yawe mpe osalaki maye ma­kosepelisa ye te ? Obomi Uria, moto wa Eti, na mopanga, mpe okamati mwasi wa ye mpo ’te akoma mwasi wa yo ; obomisaki mobali na mopanga mwa basoda ba Amon.
II S LinVB 12:10  Sikawa, o libota lya yo bitumbu bikosila te, zambi okinolaki ngai mpe okamataki mwasi wa Uria, moto wa Eti, azala mwasi wa yo.
II S LinVB 12:11  Yawe alobi boye : Nakosala ’te mabe makwela yo ut’o libota lya yo moko. O miso ma yo nakokamata basi ba yo mpe nakopesa bango na moto mosusu ; ye akolala na bango na moi.
II S LinVB 12:12  Osalaki makambo na bonkutu, kasi ngai nakosala ’te likambo lyango lisalema o miso ma bato ba Israel banso, na moi mpenza. »
II S LinVB 12:13  Davidi alobi na Natan : « Solo, nasali mabe o miso ma Yawe ! » Natan azongisi : « Yawe akolimbisa yo lisumu lya yo, okokufa te.
II S LinVB 12:14  Nzokande, awa otumolaki Yawe na likambo lina, mwana oboti sika, akokufa. »
II S LinVB 12:15  Mpe Natan azongi o ndako ya ye. Yawe abelisi mwana oyo Davidi abotaki na mwasi wa Uria.
II S LinVB 12:16  Davidi abondeli Nzambe mpo ya mwana : alali nzala, mpe ntango azongi o ndako na butu, alali se o mabelé.
II S LinVB 12:17  Ba­nkumu babondeli ye atika kolala o mabelé, kasi ye alingi koyoka bango te, mpe aboyi kolia na bango.
II S LinVB 12:18  Mokolo mwa nsambo mwana awei. Bakomanda ba basoda babangi koyebisa ye ’te mwana awei. Mpamba te, balobani : « Ntango mwana azalaki naino na bomoi, tosololaki na ye mpe aboyaki koyoka biso. Sikawa ndenge nini toyebisa ye ’te mwana awei ? Nte­mbe te, akoki komisala likambo ! »
II S LinVB 12:19  Awa Davidi amoni ’te bakomanda bazalaki kolobana malembe, ayebi ’te mwana akufi. Davidi atuni basali ba ye : « Mwana awei ? » Bango bazongisi : « Iyo, mwana awei. »
II S LinVB 12:20  Sikawa Davidi atelemi, asukoli nzoto, amipakoli malasi mpe alati bilamba bisusu. Na nsima ayingeli o ndako esantu ya Yawe mpe akumbami elongi o nse. Awa azongi o ndako ya ye, asengi basali ba ye ’te baya na bilei, mpe alei.
II S LinVB 12:21  Basali ba ye batuni ye : « Ozali kosala nini ? Ntango mwana azalaki naino na bomoi, ozalaki kolala nzala mpe kolela ye, mpe sikawa awa mwana awei, otelemi mpe oba­ndi kolia ! »
II S LinVB 12:22  Alobi : « Ntango mwa­na azalaki naino na bomoi, nalalaki nzala mpe nalelaki, mpamba te, namilobeli : ‘Nani ayebi ? Mbele Yawe akoyokela ngai mawa mpe mwana akobika’.
II S LinVB 12:23  Sikawa mwana awei, mpo nini nalala nzala lisusu ? Nakoki nde kozongisela ye bomoi ? Ngai moto nakokende kokutana na ye, kasi ye akozonga epai ya ngai te. »
II S LinVB 12:24  Davidi abondi mwasi wa ye Betsabe. Akei o ndako ya ye mpe alali na ye. Aboti mwana mobali mpe Davidi apesi ye nkombo Salomo. Yawe ali­ngi mwana,
II S LinVB 12:25  mpe atindi profeta Natan mpo ya koyebisa ye yango. Natan apesi ye nkombo Yedidia, lokola ’te, mwana wa bolingo wa Yawe, enge­bene na maloba ma Yawe.
II S LinVB 12:26  Yoab akei kobunda na Raba, mbo­ka ya ba-Amon mpe alingaki kobotolo mboka ya mokonzi.
II S LinVB 12:27  Yoab atindeli Davidi bantoma na maloba maye : « Nakendeki kobunda na Raba, nasili nabotoli mboka esika mai mazali.
II S LinVB 12:28  Sangisa sikawa basoda banso batikali, yaka kozinga mboka mpe botolo yango ; soko oyei te, ngai moko nakobotolo yango mpe mboka ekotangema na nkombo ya ngai. »
II S LinVB 12:29  Da­vidi asangisi basoda ba ye banso mpe akei kobunda etumba o Raba mpe abotoli yango.
II S LinVB 12:30  Alongoli enkoti o motó mwa mokonzi wa bango ; bozito bwa yango bozalaki bwa talenta yoko ya wolo ; bakembisaki yango na libanga lya motuya. Balatisi Davidi yango o motó. Abotoli mpe biloko ebele o mboka.
II S LinVB 12:31  Abimisi bato banso o mboka mpe atindi bango basala misala mya mosumane, pikasi na soka ; ati­ndi bango mpe babete biliki. Asali bobele bongo o mboka inso ya ba-Amon. Na nsima Davidi azongi o Yeruzalem elongo na basoda ba ye.
Chapter 13
II S LinVB 13:1  Yoka makambo masalemi nsima. Absalom, mwana wa Davidi, azalaki na ndeko, elenge mwasi kitoko mpenza, nkombo ya ye Tamar ; Amnon, mwana wa Davidi akomi kolula ye.
II S LinVB 13:2  Amnon akondi mpe akomi kobele mpo ya ndeko wa ye Tamar, zambi oyo azalaki ngondo, mpe amoni ’te akoki kokutana na ye te.
II S LinVB 13:3  Amnon azalaki na moninga wa motema, nkombo ya ye Yonadab, mwana wa Simea, ndeko wa Davidi. Yonadab azalaki moto wa mayele mingi.
II S LinVB 13:4  Atuni Amnon : « Yo mwana wa mokonzi, mpo nini ozali na mawa ntongo inso ? Yebisa ngai ntina ! » Amnon azongiseli ye : « Ezali mpo ya Tamar, ndeko wa mozimi wa ngai Absalom. Motema mwa ngai molingi ye mingi. »
II S LinVB 13:5  Yonadab alobi na ye : « Kende kolala o mbeto mpe kosa ’te obeli. Mokolo tata wa yo akoya kotala yo, loba na ye : Tika ndeko wa ngai Tamar aya kopesa ngai bilei ; alamba biloko o miso ma ngai, namono ndenge azali kosala ; bongo nakolia biloko akoyela ngai. »
II S LinVB 13:6  Bongo Amnon akei kolala o mbeto mpe akosi bokono. Mokonzi ayei kotala ye mpe Amnon alobi na ye : « Tika ndeko wa ngai Tamar aya kolambela ngai minkate mibale o miso ma ngai, nalia myango na maboko ma ye. »
II S LinVB 13:7  Davidi atindi maloba epai ya Tamar : « Kende kotala ndeko wa yo Amnon mpe lambela ye bilei. »
II S LinVB 13:8  Tamar akei epai ya ndeko wa ye Amnon, oyo azalaki kolala o mbeto. Akamati fufu, aniki yango, asali minkate o miso ma ye mpe alambi yango.
II S LinVB 13:9  Na nsima aka­mati nzungu ya minkate, atii ya­ngo liboso lya ye ; kasi Amnon aboyi kolia, alobi : « Bimisa bato banso bazali awa. » Mpe bato banso bazalaki wana babimi o ndako ya ye.
II S LinVB 13:10  Amnon alobi na Tamar : « Yaka na bilei o ndako ya ngai ya kolala, pesa ngai yango, nalia. » Tamar akamati minkate mpe ayei na myango epai ya ndeko wa ye Amnon o ndako ya kolala.
II S LinVB 13:11  Apesi ye bilei. Amnon akangi ye mpe alobi na ye : « Yaka, ndeko wa ngai, mpe lala na ngai ! »
II S LinVB 13:12  Alobi na ye : « Te, ndeko, obe­bisa ngai te, bakosalaka bongo o ekolo Israel te ! Osala likambo lya nsoni boye te.
II S LinVB 13:13  Nakende na nsoni ena epai wapi ? Bato banso ba Israel bakotala yo lokola moto wa mobulu. Bongo solola na mokonzi, akopekisa yo te ’te obala ngai. »
II S LinVB 13:14  Kasi Amnon ali­ngi koyoka ye te. Akangi ye makasi, alali na ye, bongo abebisi ye.
II S LinVB 13:15  Na nsima Amnon akomi koyina ye mpenza. Solo, boyini ayini ye sikawa boleki bolingi azalaki kolinga ye. Amnon alobi na ye : « Teleme mpe longwa ! »
II S LinVB 13:16  Kasi ye azongisi : « Te, nde­ko wa ngai, kobengana ngai bo­ngo ekoleka naino mabe outi kosala ngai. » Kasi Amnon alingi koyoka ye te.
II S LinVB 13:17  Abengi mosali wa ye mpe alobi na ye : « Bimisa mwasi oyo o ndako ya ngai mpe kanga ezibeli ya ndako. »
II S LinVB 13:18  Azalaki kolata elamba ya maboko malai lokola bana basi ba mokonzi ba­zalaki kolata ntango bazali naino ngo­ndo. Mosali wa Amnon abimisi ye o libanda mpe akangi ndako nsima ya ye.
II S LinVB 13:19  Tamar akamati mputulu mpe ami­pakoli yango o motó. Apasoli elamba ya maboko malai, mpe maboko o motó akei kolela nzela nzela.
II S LinVB 13:20  Ndeko wa ye Absalom atuni ye : « Ndeko wa yo alalaki na yo ? Sikawa, ndeko wa ngai, kanga monoko, ye azali ndeko wa yo. Okanisa likambo lina lisusu te. » Bongo Tamar atikali ye moko o ndako ya ndeko wa ye Absalom.
II S LinVB 13:21  Eyoki mokonzi Davidi likambo lina mobimba, asiliki mpenza.
II S LinVB 13:22  Absalom alobisi ndeko wa ye Amnon lisusu te, akomi koyina Amnon mpe­nza, zambi abebisaki ndeko wa ye Tamar.
II S LinVB 13:23  Nsima ya mibu mibale, ntango bazalaki kokata nsuki ya mpata, Absalom abengi bana banso ba mokonzi baya epai ya ye o Baal-Kasor, epai ya Efraim.
II S LinVB 13:24  Akei epai ya mokonzi, alobi na ye : « Basali ba mosaleli wa yo bazali kokata nsuki ya mpata. Malamu mokonzi na basaleli ba ye baya kolanda ngai mosaleli wa yo. »
II S LinVB 13:25  Mokonzi Davidi ayanoli Absalom : « Te, mwana wa ngai, tokoki koya biso banso te, yango ekotiela yo moku­mba monene. » Absalom alendisi, kasi mokonzi aboyi kokende mpe abenisi ye.
II S LinVB 13:26  Absalom alobi lisusu : « Tika ndeko wa ngai Amnon aya na biso elongo. » Mokonzi alobi : « Mpo nini olingi se Amnon aya kuna ? »
II S LinVB 13:27  Kasi Absalom alendisi lisusu, mpe mokonzi atiki Amnon akende, na mpe bana basusu ba mokonzi.
II S LinVB 13:28  Absalom apesi basali ba ye etinda eye : « Bokeba malamu. Ntango Amnon abandi kolangwa vino mpe soko nalobi na bino : ‘Bobete Amnon !’, bo­boma ye ; bobanga te, ngai moko natindi bino bongo. Bozala na mpiko mpe bomilakisa babali ! »
II S LinVB 13:29  Basaleli ba Absalom basali Amnon lokola Absalom atindaki bango. Bana banso ba mokonzi batelemi, babuteli mpunda ya bango mpe bakimi.
II S LinVB 13:30  Ezalaki bango naino o nzela, nsa­ngo ekomi epai ya Davidi : « Absalom abomi bana banso ba mokonzi ; etikali ata mwana moko te ! »
II S LinVB 13:31  Mokonzi atelemi, apasoli bilamba bya ye mpe amibwaki o mabelé. Basali ba ye ba­nso batelemi na bilamba bipaswani.
II S LinVB 13:32  Yonadab, mwana wa Simea, ndeko wa Davidi, alobi : « E mokonzi, tika koloba ’te babomi bilenge banso, bana ba mokonzi. Te, bobele Amnon moto akufi. Absalom akanaki koboma ye ut’o mokolo abebisaki ndeko wa ye Tamar.
II S LinVB 13:33  Mokonzi atika kokanisa ’te bana banso ba mokonzi bakufi. Bobele Amnon moto akufi. »
II S LinVB 13:34  Absalom akimi. Elenge mobali oyo azalaki monongi átombola miso, amoni bato ebele babimi nsima ya ye epai ya ngomba.
II S LinVB 13:35  Yonadab alobi na mokonzi : « Bana ba mokonzi bazali koya ; se lokola ngai mosaleli wa yo nalobaki. »
II S LinVB 13:36  Esilisi ye koloba, bana ba mokonzi bayei. Babandi kolela mpe koganga. Mokonzi na basaleli ba ye banso mpe baleli makasi.
II S LinVB 13:37  Absalom akimi epai ya Talmai, mwana wa Amikud, mokonzi wa Gesur. Mokonzi Davidi azalaki kolela mwana wa ye ntango inso.
II S LinVB 13:38  Absalom akimi epai ya Gesur mpe atikali wana mibu misato.
II S LinVB 13:39  Mokonzi atiki kobombela Absalom nkanda o motema, zambi akitisaki motema mpo ya liwa lya Amnon.
Chapter 14
II S LinVB 14:1  Yoab, mwana wa Seruya, amoni ’te mokonzi abandi ko­linga Absalom lisusu.
II S LinVB 14:2  Abengi mwasi wa mayele wa mboka Tekoa, alobi na ye : « Sala lokola moto azali na lilaka, lata bilamba bya mpili, omipakola malasi te, lokola mwasi azali kolela mowei ut’o mwa kala.
II S LinVB 14:3  Na nsi­ma kende epai ya mokonzi Davidi mpe yebisa bongo. » Mpe Yoab ayebisi ye maloba manso asengeli koloba.
II S LinVB 14:4  Bongo mwasi wa mboka Tekoa akei epai ya mokonzi. Amibwaki elo­ngi o nse, akumbami mpe alobi : « E Mokonzi wa ngai, bikisa ngai ! »
II S LinVB 14:5  Mokonzi atuni ye : « Likambo nini ? » Oyo azongisi : « Mawa e, nazali mwasi bozenge ; solo, mobali wa ngai azali lisusu te.
II S LinVB 14:6  Ngai mosaleli wa yo nazalaki na bana babali babale. Bango babale babandi kobunda o esobe. Moto moko azalaki kuna te mpo akabola bango. Moko abeti ndeko wa ye makasi mpe abomi ye.
II S LinVB 14:7  Na nsima bandeko banso bayei kotombokela ngai mosaleli wa yo, balobi : ‘Pesa biso moto oyo abomi ndeko wa ye ; tokoboma ye mpo afuta liwa lya ndeko wa ye ; se bongo tolongola o mokili moto akoki kozwa biloko bya tata’. Bakozimisa bongo mwa mwinda motikali na ngai, zambi soko basali bo­ngo bakotikela mobali wa ngai ata nkombo te, ata nkoko te. »
II S LinVB 14:8  Mokonzi alobi na mwasi : « Zonga o mboka. Ngai moko nakokata likambo lya yo. »
II S LinVB 14:9  Mwasi, moto wa Tekoa, alobi na mokonzi : « E mokonzi, etumbu ekwela ngai na bandeko ba ngai ! Yo mokonzi na bato ba yo bozali na likambo te. »
II S LinVB 14:10  Mokonzi ayanoli : « Soko moto moko akaneli yo lisusu, oya na ye epai ya ngai ; ye akozonga lisusu kotungisa yo te. »
II S LinVB 14:11  Mwasi alobi : « Mokonzi wa ngai alaya ndai na nko­mbo ya Yawe, Nzambe wa yo, ’te mo­to oyo alingi kozongisa mabe, abakisa lisumu te, azwa nzela ya koboma mwana wa ngai te. » Mokonzi azongisi : « Lokola Yawe azali na bomoi, ata mosuki moko mokolongwa o moto mwa mwana wa yo te ! »
II S LinVB 14:12  Mwasi alobi lisusu : « Tika ngai mo­saleli wa yo nalobela mokonzi wa ngai liloba lyoko. » Ye azongisi : « Loba ! »
II S LinVB 14:13  Mwasi alobi na ye : « Mpo nini mokonzi akani kosala bato ba ekolo ya Nzambe likambo lya motindo mo­na ? Awa mokonzi alobi bongo mpe aboyi kozongisa moto oyo abe­nganaki, ye moko amikitisi o lika­mbo.
II S LinVB 14:14  Solo, biso banso tokokufa, tozali lokola mai masopani o mabelé mpe makoki kozonga lisusu o sani te ; kasi Nzambe akozongisela mowei bomoi te, bongo mokonzi aluka mayele ma kozongisa moto oyo babe-nganaki mpo atikala mosika na ye te.
II S LinVB 14:15  Sikawa, soko nayei koloba na mo­konzi wa ngai likambo liye, ezali mpo bato babangisi ngai. Ngai mosaleli wa yo namilobeli : Tika nakende koyebisa mokonzi, mbele akokokisa mal­oba ma ngai, mosaleli wa ye.
II S LinVB 14:16  Mbe­le mokonzi akondima kobikisa ngai mosaleli wa ye o maboko ma moto oyo aluki kolongola ngai na mwana wa ngai o ekolo ya Yawe.
II S LinVB 14:17  Ngai mosaleli wa yo namilobeli : Soko mokonzi alobi na ngai, motema mwa ngai mokokita, zambi mokonzi wa ngai azali lokola anzelu wa Nza­mbe, ayebi makambo manso, ná malamu ná mabe. Yawe Nzambe wa yo azala na yo. »
II S LinVB 14:18  Mokonzi ayanoli mwasi : « Obo­mbela ngai likambo lyoko te, nalingi kotuna yo motuna. » Mwasi azongisi : « Mokonzi wa ngai aloba. »
II S LinVB 14:19  Moko­nzi atuni : « Mbele Yoab apesaki yo ma­yele o likambo liye ? » Mwasi azo­ngisi : « E mokonzi wa ngai, lokola ozali na bomoi, soko mokonzi wa ngai alobi likambo, moto moko akoki kolanda nzela nyoka nyoka te. Solo, ezali bobele mosaleli wa yo Yoab moto atindaki ngai etinda eye ; ye moto atiaki maloba mana manso o monoko mwa ngai, mosaleli wa yo.
II S LinVB 14:20  Mosaleli wa yo Yoab moto asali bongo mpo ya kobongisa likambo ; kasi mokonzi wa ngai azali na bwa­nya lokola anzelu wa Nzambe, ayebi makambo manso mazali koleka o mokili. »
II S LinVB 14:21  Sikawa mokonzi alobi na Yoab : « Likambo te, nakobongisa yango. Kende mpe zongisa mwana wa ngai Absalom awa. »
II S LinVB 14:22  Yoab akwei elongi o nse, akumbami mpe atondi moko­nzi botondi. Yoab alobi : « E mokonzi, ngai mosaleli wa yo, lelo nayebi ’te nazwi bolamu o miso ma yo, zambi mokonzi asali lokola mosaleli wa ye alobaki. »
II S LinVB 14:23  Yoab akei mpe akomi o Gesur. Azongisi Absalom o Yeruzalem.
II S LinVB 14:24  Nzokande mokonzi alobi : « Akende kofanda o ndako ya ye, abima o miso ma ngai te. » Absalom akei kofanda o ndako ya ye mpe abimi o miso ma mokonzi te.
II S LinVB 14:25  O Israel mobimba mobali moko kitoko lokola Absalom azalaki te ; bato banso bazalaki kokumisa ye ; ba-nda nse ya makolo tee nsonge ya motó azalaki na mbeba ata yoko te.
II S LinVB 14:26  Azalaki kokata nsuki o nsuka ya mobu ; mobu na mobu bazalaki komeka bozito bwa nsuki ya ye : bozalaki bwa mitako nkama ibale, mitako miye mya mokonzi.
II S LinVB 14:27  Absalom abotaki bana babali basato na mwana mwasi moko, nkombo ya ye Tamar. Oyo azalaki mwasi kitoko mpenza.
II S LinVB 14:28  Absalom atikali mibu mibale o Yeruzalem, abimi o miso ma moko­nzi te.
II S LinVB 14:29  Absalom akei koluka Yoab, alingi kotinda ye epai ya mokonzi, kasi Yoab aboyi koya epai ya ye. Abengi ye mbala ya ibale, kasi andimi koya te.
II S LinVB 14:30  Na nsima alobi na basaleli ba ye : « Bomoni elanga ya Yoab pene na elanga ya ngai ; kuna esika balonaki mbuma ya mampa, bokende kozikisa yango. » Basali ba Absalom bapelisi móto o elanga.
II S LinVB 14:31  Bongo Yoab akei koluka Absalom o ndako ya ye, alobi na ye : « Mpo nini basaleli ba yo bazikisi elanga ya ngai ? »
II S LinVB 14:32  Absalom ayanoli Yoab : « Nabengaki yo mpo okende koyebisa mokonzi : Mpo nini nalongwi o Gesur ? Namoni ’te elekaki malamu soko natikalaki kuna. Sikawa nalingi mokonzi ayamba ngai ; mpe soko nazali na likambo libe aboma ngai ! »
II S LinVB 14:33  Yoab akei epai ya mokonzi mpe ayebisi ye maloba mana manso. Mokonzi abengi Absalom. Ye akei epai ya mokonzi, akumbameli mokonzi elongi o nse. Mpe mokonzi ayambi ye o maboko.
Chapter 15
II S LinVB 15:1  Na nsima Absalom aluki likalo na farasa mpe bato ntuku itano mpo ya kotambola liboso lya ye.
II S LinVB 15:2  Elongwaki Absalom na nta ntongo o ndako, atelemi mpembeni ya nzela ezali kokende o ezibeli ya mboka. Mbala inso moto azalaki kokende epai ya mokonzi mpo ya kosambisa likambo lya ye, Absalom atuni ye liboso : « Yo outi o mboka nini ? » Mpe soko moto azongisi : « Ngai mosaleli wa yo nazali moto wa libota lya Israel. »
II S LinVB 15:3  Absalom ayanoli ye : « Li­kambo lya yo lizali lya solo mpe polele, kasi epai ya mokonzi moto moko akondimela yo te. »
II S LinVB 15:4  Absalom akobi lisolo : « Soko batiaki ngai zuzi wa ekolo eye, mbele bato banso bakoya epai ya ngai na makambo ma bango, nakosambisa bango na bose­mbo. »
II S LinVB 15:5  Awa moto abelemi mpe aku­mbami liboso lya ye, apesi ye loboko, asimbi ye mpe azingi ye ekopi.
II S LinVB 15:6  Absalom azalaki kosala bobele bongo na bato banso ba Israel, baye bayaki epai ya mokonzi mpo ’te akata makambo ma bango. Mpe Absalom abendi bongo mitema mya ba-Israel.
II S LinVB 15:7  Nsima ya mibu minei, Absalom alobi na mokonzi : « Tika ngai nake-nde o Ebron mpo nakokisa elako nalakelaki Yawe,
II S LinVB 15:8  zambi ntango nazalaki o Gesur o mokili mwa Aram, ngai mosaleli wa yo nalakelaki elako eye : Soko Yawe akozongisa ngai o Yeruzalem, nakokende kokumisa Yawe. »
II S LinVB 15:9  Mokonzi alobi na ye : « Kende na boboto. » Yango wana akei o Ebron.
II S LinVB 15:10  Absalom atindi bantoma o mabota manso ma Israel na maloba maye : « Mokolo bokoyoka lokito la mondule, bokoki koloba : Absalom akomi mokonzi wa Ebron. »
II S LinVB 15:11  Bato nkama ibale bakei elongo na Absalom. Awa babyangemi bongo bayebi likambo lyoko te.
II S LinVB 15:12  O ntango Absalom azalaki kobonzela Yawe miboma, atindi moto moko akende koluka Akitofel, moto wa Gilo, molaki wa Davidi, o ndako ya ye o Gilo. Baye batomboki balendi, mpe motango mwa bato balandi Absalom mokoli.
II S LinVB 15:13  Ntango moto moko ayebisi Davidi ’te bato ba Israel balingi Absalom koleka ye,
II S LinVB 15:14  alobi na basaleli ba ye bazalaki na ye o Yeruzalem : « Tokima, soki te Absalom akokanga biso. Tosala noki mpo ’te akuta biso te, zambi akoyokisa biso mpasi mpe akoboma bato ba mboka banso. »
II S LinVB 15:15  Basaleli ba mokonzi bazongiseli ye : « Ata mokonzi aponeli biso mosala nini, biso tozali se basaleli ba ye. »
II S LinVB 15:16  Mokonzi abimi elongo na libota lya ye mobimba, kasi atiki bamakango zomi mpo ’te bakengele ndako ya mokonzi.
II S LinVB 15:17  Mokonzi abimi na bato ba ye banso mpe bakei koteleme o ndako ya nsuka ya mboka.
II S LinVB 15:18  Bakomanda ba ye banso batelemi pene na ye, na basoda banso ba Keret na Pelet. Bato banso ba Gat, bato nkama motoba baye bautaki o Gat mpo ya kolanda ye, banso batamboli liboso lya mokonzi.
II S LinVB 15:19  Mokonzi alobi na Itai, moto wa Gat : « Mpo nini yo mpe olingi kokende na biso ? Zonga mpe otikala na mokonzi wa sika, zambi ozali mompaya, babengani yo mpe o ekolo ya yo.
II S LinVB 15:20  Oyaki awa se lobi, bongo natambwisa yo lelo elongo na biso ? Nayebi te makambo nini makokwela ngai lobi. Zonga mpe ba­ndeko ba yo bakende elongo na yo. Yawe alakisa yo bolingi na bose­mbo. »
II S LinVB 15:21  Itai ayanoli mokonzi : « Loko­la Yawe azali na bomoi mpe lokola yo ozali na bomoi, esika mokonzi wa ngai akozala, to na bomoi to na liwa, ngai mpe mosaleli wa yo nakozala se kuna. »
II S LinVB 15:22  Davidi alobi na Itai : « Kende mpe tambola. » Itai, moto wa Gat, akei elongo na bandeko ba ye banso.
II S LinVB 15:23  Bato banso ba ekolo baleli mingi. Mokonzi akatisi Kedron mpe bato banso bakei o nzela ya eliki.
II S LinVB 15:24  Bamoni mpe Sadok na ba-Levi bazalaki komeme Sanduku ya Nza­mbe. Bakitisi Sanduku ya Nzambe, mpe Ebiatar atikali wana tee bato banso balongwi o mboka.
II S LinVB 15:25  Mokonzi alobi na Sadok : « Zongisa Sanduku ya Nzambe o mboka. Soko Yawe ayokeli ngai mawa, akozongisa ngai awa mpe akosala ’te nakoka komono ya­ngo lisusu, ná ndako ya ye esantu lokola.
II S LinVB 15:26  Kasi soko alobi ‘Nalingi yo lisusu te’, akoki kosala na ngai lokola alingi ! »
II S LinVB 15:27  Mokonzi alobi na nganga Nzambe Sadok : « Bino na Ebiatar, bozonga o mboka na boboto ; mwana wa yo Akimas na Yonatan, mwana wa Ebiatar, bakende na bino elongo.
II S LinVB 15:28  Boyoka malamu, ngai nakofanda o nzela ekokende o eliki tee mokolo moto akoyela ngai nsango. »
II S LinVB 15:29  Sadok na Ebiatar bazongisi Sanduku ya Nzambe o Yeruzalem mpe batikali kuna.
II S LinVB 15:30  Davidi abuti ngomba ya Oliva, azalaki se kolela. Azipi motó na ela­mba mpe atamboli makolo ngulu. Bato banso bakei na ye elongo bazipi motó na elamba. Ntango bazalaki kobuta ngomba, bazalaki se kolela. Davidi ayoki nsoni.
II S LinVB 15:31  Bakei koyebisa Davidi : « Akitofel azali o kati ya bato batomboki elo­ngo na Absalom. » Davidi alobi : « Nabondeli yo, e Yawe, bebisa malako ma Akitofel ! »
II S LinVB 15:32  Davidi akomi o nsonge ya ngo­mba o esika bakokumisaka Yawe ; kuna amoni Kusai, moto wa Arka, ayei kokutana na ye, alati elamba epaswani mpe apakoli mabelé o motó.
II S LinVB 15:33  Davidi alobi na ye : « Soko okei elongo na ngai, okomemisa ngai mokumba.
II S LinVB 15:34  Ka­si soko ozongi o mboka mpe olobi na Absalom ‘Nalingi kozala mo­saleli wa yo, e mokonzi ; kalakala nazalaka mosaleli wa tata wa yo, okoki kobebisa malako ma Akitofel’, bongo ngai nakobika.
II S LinVB 15:35  Kuna ba­nganga Nzambe Sadok na Ebiatar bakozala penepene na yo te ? Maka­mbo manso okoyoka o ndako ya mokonzi kende koyebisa banganga Nza­mbe Sadok na Ebiatar mango.
II S LinVB 15:36  Bana ba bango, Akimas, mwana wa Sadok, na Yonatan, mwana wa Ebiatar, bazali penepene na bango. Bango bakoyebisa ngai makambo manso okoyoka kuna. »
II S LinVB 15:37  Kusai, moninga wa Davidi, ayingeli o mboka ntango Absalom akoti o Yeruzalem.
Chapter 16
II S LinVB 16:1  Esilaki Davidi koleka nsonge ya ngomba, Siba, mosaleli wa Mefiboset, ayei kokutana na ye ; azalaki na mpunda ibale, ikumbi mampa nkama ibale, bituka bya mbu­ma ya vino ya kokauka, bituka bya mbuma ya vino ya mobesu na ngoto ya vino.
II S LinVB 16:2  Mokonzi atuni Siba : « Okosala nini na biloko bina ? » Siba azongisi : « Mpunda ikokumba bato ba libota lya mokonzi ; mampa na mbuma ikozala bilei bya bilenge mpe vino ekolendisa baye balembi mpo ya mobembo o eliki. »
II S LinVB 16:3  Mokonzi atuni lisusu : « Wapi mwana wa mokonzi wa yo ? » Siba ayanoli mokonzi : « Ye atikali o Yeruzalem, zambi amilobeli : Lelo bato ba Israel bakozongisela ngai bokonzi bwa tata wa ngai. »
II S LinVB 16:4  Mo­konzi alobi na Siba : « Banda lelo, biloko binso bya Mefiboset bizali bya yo. » Siba alobi : « E mokonzi, nafukami o boso bwa yo. Nazwa nta­ngo inso bolamu o miso ma yo. »
II S LinVB 16:5  Ekomi Davidi o mboka Bakurim, akutani na moto moko wa libota lya Saul, nkombo ya ye Simei, mwana wa Gera ; abandi kobetele Davidi mobondo.
II S LinVB 16:6  Ata limpinga mobimba mpe basoda ba mpiko bazalaki kobatela Davidi epai na epai, Simei abwakeli mokonzi na bato ba ye mabanga.
II S LinVB 16:7  Simei abeteli Davidi mobondo boye : « Longwa, mobomi wa bato ! Longwa, yo efaka ya moto !
II S LinVB 16:8  Yawe asali ’te makila ma libota lya Saul makwela yo : obotoloki ye bokonzi, sikawa Yawe apesi bwango o maboko ma mwana wa yo Absalom. Omoni, sikawa okomi koyoka mpasi, zambi ozali mobomi. »
II S LinVB 16:9  Abisai, mwana wa Seruya, alobi na mokonzi : « Mpo nini mbwa oyo abeteli yo mokonzi monene mobo­ndo ? Lingisa ngai nakende kokata ye nkingo ! »
II S LinVB 16:10  Kasi Davidi azongisi : « Biso na yo, mwana wa Seruya, tozali na likambo te. Soko abeteli moto mbondo, mpe soko Yawe ayebisaki ye bongo, nani akoki kotuna ye ntina nini asali bongo ? »
II S LinVB 16:11  Davidi alobi na Abisai me na bato ba ye : « Tala, mwana ngai nabotaki alingi koboma ngai, bongo tika moto oyo wa libota lya Benyamin abetele ngai mobondo, soki Yawe alingi bongo !
II S LinVB 16:12  Mbele Yawe akotala mawa ma ngai mpe akozo­ngisela ngai bolamu o esika ya mobo­ndo abeteli ngai lelo. »
II S LinVB 16:13  Davidi na bato ba ye bakobi nzela ya bango. Simei atamboli o mopanzi mwa ngomba ; azalaki se kobetele Davidi mobondo mpe kobwakela ye mabanga na mabelé.
II S LinVB 16:14  Mokonzi na bato ba ye banso basukisi mobembo mwa bango, balembi mingi. Kuna bazwi ntango ya kopema.
II S LinVB 16:15  Absalom akoti o Yeruzalem elo­ngo na bato banso ba Israel. Akitofel azalaki na ye.
II S LinVB 16:16  Kusai, moto wa Arka, moninga wa Davidi, akomi epai ya Absalom mpe alobi na ye : « Mokonzi kuma ! »
II S LinVB 16:17  Absalom alobi na Kusai : « Olakisi bolingi ona nkolo wa yo bo­ngo ? Mpo nini okendeki elongo na nkolo wa yo te ? »
II S LinVB 16:18  Kusai ayanoli Ab­salom : « Ezali bongo te : moto oyo Yawe na ba-Israel banso baponoki, nalingi bobele kosalela ye, nakotikala se epai ya ye !
II S LinVB 16:19  Bongo nasalela nani ? Bobele mwana wa ye te ? Lokola nasalelaki tata wa yo, nakosalela yo se bongo. »
II S LinVB 16:20  Absalom alobi na Akitofel : « Bosangana likita mpo toyeba makambo nini tosengeli kosala. »
II S LinVB 16:21  Akitofel ayanoli : « Kende epai ya bamakango ba tata wa yo, baye atikaki mpo ’te bakengele ndako ya mokonzi. Bongo bato banso ba Israel bakoyeba ’te osali likambo likoyokisa tata wa yo nkanda enene, mpe bato ba ye banso bakozwa bongo mpiko ya sika. »
II S LinVB 16:22  Batandeli Absalom ema o mokili mwa ndako, mpe Absalom akei epai ya bamakango ba tata wa ye o miso ma ba-Israel banso.
II S LinVB 16:23  O mikolo mina bazalaki kotala malako Akitofel azalaki kopesa lokola maloba mauti na Nzambe. Davidi na Absalom bazalaki mpe kotala malako ma Akitofel se bongo.
Chapter 17
II S LinVB 17:1  Akitofel alobi na Absalom : « Tika ngai napono basoda nko­to zomi na ibale, nakende kolanda Davidi bobele na butu boye.
II S LinVB 17:2  Nakozwa ye ntango akobanda kolembe mpe mpiko ya ye ekosila. Nakoyokisa ye nsomo o motema mpe bato ba ye banso bakokima ; bongo nakobete mokonzi ntango akozala se ye moko.
II S LinVB 17:3  Nakosala ’te bato banso ba­zonga epai ya yo ; lokola mwasi azongi epai ya mobali, osengeli ko­zwa se moto moko, mpe bato banso bakobika. »
II S LinVB 17:4  Maloba mana masepelisi Absalom na bakolo banso ba Israel.
II S LinVB 17:5  Nzokande Absalom alobi : « Benga Kusai, moto wa Arka, toyoka mpe maloba ye akoloba. »
II S LinVB 17:6  Kusai akomi epai ya Absalom, mpe Absalom alobi na ye : « Akitofel alobaki na biso bo­ngo ; tosengeli nde kosala lokola alobaki ? Soki te, loba yo moko. »
II S LinVB 17:7  Kusai ayanoli Absalom : « Mbala eye Akitofel apesaki lilako lilamu te. »
II S LinVB 17:8  Kusai akobi lisolo, alobi : « Yo moko oyebi tata wa yo na bato ba ye ; bazali bilombe mpe bazali na nkanda lokola nkoi eye babotoli bana ba ye. Tata wa yo azali moto wa bitumba ; na butu boye akondima te ’te bato ba ye balala.
II S LinVB 17:9  Sikawa azali kobombama o mobenga to epai esusu. Bongo, soko o kati ya biso bato basusu babandi kokufa, ekoyebana noki na bato ba biso, mpe bakoloba : ‘O kati ya bato balandi Absalom bato basusu bakufi.’
II S LinVB 17:10  Bongo ata mobali azali na motema makasi lokola ntambwe, mpiko ya ye ekosila, mpo ba-Israel banso bayebi ’te tata wa yo azali elombe mpe baninga ba ye bazali bato ba mpiko.
II S LinVB 17:11  Ya­ngo wana, napesi yo lilako liye : Bato banso ba Israel, banda Dan tee Berseba, basangana pene na yo, baya ebele, lokola mbuma ya zelo o libo­ngo lya mbu ; yo moko otambola o kati ya bango.
II S LinVB 17:12  Tokozwa ye, ata akei kofanda wapi. Tokokwela ye o nzoto lokola mamio makokweyaka o mabelé ; mpe tokotika moto moko na bomoi te.
II S LinVB 17:13  Soko akimi o mboka, ba-Israel banso bakoya na mikulu mpe tokobenda ndako inso tee o moluka, ata libanga lyoko likotikala te. »
II S LinVB 17:14  Absalom na ba-Israel banso balobi : « Lilako Kusai apesi biso, lileki lilako lya Akitofel na bolamu. » Yawe akanaki kobebisa lilako lya Akitofel, ata lilekaki na bolamu, mpo ’te Absalom ayoka mpasi.
II S LinVB 17:15  Kusai alobi na banganga Nzambe Sadok na Ebiatar : « Akitofel apesi Ab­salom na bakolo ba Israel malako ndenge na ndenge ; kasi ngai napesi ye lilako liye.
II S LinVB 17:16  Sikawa bokende noki koyebisa Davidi mpe boloba na ye : Na butu boye otikala o eliki te, kasi kende liboso ; soki te, bakoboma mokonzi na bato ba ye banso. »
II S LinVB 17:17  Yonatan na Akimas bazalaki kozila penepene na liziba lya Mosukoli bilamba. Mwasi moko atindami mpo ’te ayebisa bango, nsima bango base­ngeli koyebisa mokonzi Davidi, za­mbi bakoki komimonisa te ntango bakokoto o mboka.
II S LinVB 17:18  Kasi elenge mo­bali amoni bango mpe ayebisi Absalom likambo lina. Bango babale bakei mbangu mpe bakomi o ndako ya moto moko wa Bakurim. Libulu lizalaki kuna o lopango, mpe bango bakiti o kati.
II S LinVB 17:19  Mama nkolo wa ndako akamati elamba ya ema, atandi ya­ngo likolo lya libulu lya mai. Atii mbuma ya ma­mpa likolo, mpo ’te bato bamono te.
II S LinVB 17:20  Basaleli ba Absalom bakoti o nda­ko ya mwasi mpe batuni ye : « Wapi Akimas na Yonatan ? » Mwasi ayanoli bango : « Basili bakatisi mai. » Bango baluki se koluka, bazwi moto te, bo­ngo bazongi o Yeruzalem.
II S LinVB 17:21  Awa ba­ngo bakei, Akimas na Yonatan babimi o libulu mpe bakei koyebisa Davidi, balobi : « Kende noki, katisa mai, za­mbi Akitofel apesi malako maike mpo ya kokanga yo. »
II S LinVB 17:22  Davidi na bato ba ye banso bakei mpe bakatisi Yordane. Na ntongo bato banso basili kokatisa Yordane.
II S LinVB 17:23  Emoni Akitofel ’te balandaki lilako lya ye te, abongisi mpunda ya ye, azongi o mboka, o ndako ya ye. Abo­ngisi makambo manso ma ndako ya ye, mpe amitii nsinga o nkingo, amibomi. Nsima bakundi ye o lilita lya tata wa ye.
II S LinVB 17:24  O ntango Absalom na ba-Israel ba­nso bazalaki kokatisa Yordane, Davidi asili akomi o Makanaim.
II S LinVB 17:25  Absalom atiaki Amasa komanda wa basoda banso o esika ya Yoab. Amasa azalaki mwana wa Yitra, moto wa Ismael, oyo abalaki Abigayil, mwana wa Yese mpe ndeko wa Seruya, mama wa Yoab.
II S LinVB 17:26  Bato ba Israel na Absalom bapiki nganda o mokili mwa Galaad.
II S LinVB 17:27  Ekomi Davidi o Makanaim, Sobi, mwana wa Nakas, moto wa Raba, mbo­ka ya ba-Amon, na Makir, mwana wa Amiel wa Lo-Debar, na Barzilai, moto wa Roglim o Galaad,
II S LinVB 17:28  bayei na matoko, mbeto, kopo, nzungu na mpe mbuma ya mampa na loso, fufu, mbuma ya mampa bakalingi, ma­desu na ndunda,
II S LinVB 17:29  mafuta ma nzoi, manteka na misuni mya mpata mpe mya ngombe ; bayei na yango mpo ya koleisa Davidi na bato ba ye, zambi balobanaki : « Basoda bayokaki mpasi na nzala, balembeki o nzela mpe bayokaki mposa ya mai o eliki. »
Chapter 18
II S LinVB 18:1  Davidi akei kotala bato banso bazalaki na ye mpe atii bakomanda ba bato nkoto yoko mpe ba bato monkama.
II S LinVB 18:2  Na nsima Davidi akaboli bato na mangomba masato ; apesi Yoab ndambo ya bato, apesi Abisai, mwana wa Seruya mpe ndeko wa Yoab, ndambo esusu ; apesi Itai, moto wa Gat, ndambo ya isato. Mokonzi alobi na basoda ba ye : « Ngai mpe nalingi kokende na bino elo­ngo. »
II S LinVB 18:3  Kasi bango balobi : « Yo okoki kokende te. Soko biso tokimi, moto moko akokeba na yango te ; mpe ata bato baike bakufi o kati ya biso, likambo te, mpo sikawa yo ozali lokola bato nkoto zomi ba biso. Bongo eleki malamu otikala o mboka mpo ya kosalisa biso. »
II S LinVB 18:4  Davidi alobi na bango : « Nakosala lokola bino moko bolingi. » Mokonzi atelemi penepene na ezibeli ya mboka mpe basoda babimi mampinga mampinga ma bato nkama mpe nkoto.
II S LinVB 18:5  Mokonzi apesi Yoab, Abisai na Itai etinda eye : « Nabondeli bino, bosala Absalom moke mabe te. » Mpe bato banso bayoki etinda mokonzi apesi bayangeli ba­nso mpo ya kobikisa Absalom.
II S LinVB 18:6  Bato bakei o esobe kozwana na ba­to ba Israel, babandi kobunda etu­mba o zamba ya Efraim.
II S LinVB 18:7  Ba-Israel bakwei o boso bwa bato ba Davidi ; mokolo mona bakiti mpenza o etu­mba, bato nkoto ntuku ibale bakufi.
II S LinVB 18:8  Etumba epalangani o ekolo mobi­mba mpe o mokolo mona bato bakufi o zamba baleki motango mwa baye bakufi na mopanga.
II S LinVB 18:9  Absalom azwani na basoda ba Davidi. Absalom atambwisi mpunda, ya­ngo eleki o nse ya nzete enene ya wenge ; motó mwa Absalom moka-ngemi o bitapi bya nzete. Absalom atingami mpe mpunda ekimi.
II S LinVB 18:10  Moto moko amoni ye mpe akei koyebisa Yoab : « Namonoki Absalom atingami o nzete ya wenge. »
II S LinVB 18:11  Yoab alobi na moto ayebisi ye yango : « Awa omoni ye, mpo nini obomi ye te ? Mbele napesaki yo mitako mya palata zomi na mokaba lokola. »
II S LinVB 18:12  Moto alobi na Yoab : « Ata opesaki ngai mitako nkoto yoko, nakoki koboma mwana wa mokonzi te, zambi toyoki na matoi ma biso boniboni mokonzi apesaki yo, Abisai na Itai etinda eye : ‘Bokeba ’te moto moko asala Absalom moke mabe te’.
II S LinVB 18:13  Soko nasalaki mabe mpe nabomaki ye na mayele, eloko yoko ebombami o miso ma mokonzi te, mpe mbele yo moko omibendaki mosika. »
II S LinVB 18:14  Yoab alobi : « Nakolekisa ntango ya ngai na yo mpamba te. » Akamati makongo masato o maboko mpe atuboli na mango motema mwa Absalom, oyo azalaki naino na bomoi ut’o ntango atingami o nzete ya wenge.
II S LinVB 18:15  Na nsima bilenge baye bazalaki komeme bibuneli bya Yoab, bazingi Absalom mpe babomi ye.
II S LinVB 18:16  Yoab abeti mondule mpe bato ba ye batiki kolanda basoda ba Israel, zambi Yoab asukisi etumba.
II S LinVB 18:17  Balo­ngoli ebembe ya Absalom mpe ba-bwaki yango o libulu linene o kati ya zamba, mpe basopi o esika ena mabanga ebele. Ba-Israel banso bakimi, moto na moto o ema ya ye.
II S LinVB 18:18  Ntango azalaki naino na bomoi, Absalom amitongelaki litongi liye lizali o lobwaku la mokonzi. Amilobelaki : « Nazali na mwana mobali te, oyo akoumisa nkombo ya ngai seko », bongo apesi litongi lina nkombo ya ye moko. Bakobenga lyango Litongi lya Absalom tee lelo.
II S LinVB 18:19  Akimas, mwana wa Sadok, alobi : « Nakende mbangu koyebisa moko­nzi nsango elamu eye ’te Yawe alo­ngisi ye mpe abikisi ye o maboko ma banguna ba ye. »
II S LinVB 18:20  Yoab alobi na ye : « Soko okei lelo, okoyebisa ye nsango elamu te. Oyebisa nsango ena mokolo mosusu, kasi o mokolo mwa lelo okoyebisa nsango elamu te, zambi mwana wa mokonzi awei. »
II S LinVB 18:21  Mpe Yoab alobi na moto wa Kus : « Kende koyebisa mokonzi makambo omonoki. » Moto wa Kus akumbameli Yoab mpe akei mbangu koyebisa nsa­ngo.
II S LinVB 18:22  Akimas, mwana wa Sadok, alobi lisusu na Yoab : « Mabe makwela ngai, likambo te ! Tika ngai napota mba­ngu, nalanda moto wa Kus. » Yoab alobi : « Mwana wa ngai, mpo nini opoti mbangu boye ? Awa ozali na nsango elamu te, okozwa na yango litomba lyoko te. »
II S LinVB 18:23  Oyo azongisi : « Likambo te ! Nakopota mbangu. » Yoab alobi na ye : « Pota mbangu. » Akimas alandi nzela ya esobe ya Yordane mpe akomi liboso lya moto wa Kus.
II S LinVB 18:24  Davidi azalaki kofanda o kati ya bizibeli bibale bya mboka. Mokengeli abutaki motondo mwa linongi. Ato­mbola miso, amoni moto moko azalaki koya mbangu.
II S LinVB 18:25  Agangi mpo ayebisa mokonzi. Mokonzi alobi : « Soko azali ye moko, ayei na nsango elamu. » Ntango moto akomi penepene,
II S LinVB 18:26  mokengeli amoni mpe moto mo­susu azalaki koya ye moko. Aga­ngi mpo ayebisa mokengeli wa ezibeli ya mboka : « Tala moto mosusu mpe azali koya mbangu. » Mokonzi alobi : « Ye mpe ayeli ngai nsango elamu. »
II S LinVB 18:27  Mo­kengeli alobi : « Nayebi moto oyo wa liboso na etamboleli ya ye ; ye Akimas, mwana wa Sadok. » Moko­nzi alobi : « Ye azali moto molamu, ayeli biso nsango elamu mpenza. »
II S LinVB 18:28  Akimas agangi mpe ayebisi mokonzi : « Makambo manso mazali se malamu. » Akumbami elongi o nse o boso bwa mokonzi mpe alobi : « Bakumisa Yawe Nzambe wa yo, zambi akabeli biso bato batombokoki na mokonzi wa biso. »
II S LinVB 18:29  Mokonzi atuni : « Absalom moke azali malamu ? » Akimas azongisi : « Namonoki mobulu monene ntango Yoab atindaki mosaleli moko wa mokonzi na mpe ngai, mosaleli wa yo, kasi nayebi ntina ya yango te. »
II S LinVB 18:30  Mokonzi alobi : « Teleme mpembeni. » Bongo azongi nsima mpe azili.
II S LinVB 18:31  Na nsima moto wa Kus mpe ayei, alobi : « E mokonzi, yo­ka nsango elamu nayeli yo : Lelo Yawe alongisi yo mpe abikisi yo o maboko ma bato batombokoki na yo. »
II S LinVB 18:32  Mokonzi atuni moto wa Kus : « Boni, Absalom moke azali malamu ? » Moto wa Kus ayanoli : « Na ba­nguna banso ba mokonzi wa ngai baye ba­nso batombokeli yo esalema lokola na mwana wa yo ! »
Chapter 19
II S LinVB 19:1  Mokonzi ayoki mawa mingi ; abuti o mokili mwa ndako mpe aleli mingi, alobi : « Mwana wa ngai Absalom ! Mwana wa ngai ! Mwa­na wa ngai e ! Malamu soko ngai moko nakufaki o esika ya yo, Absalom, mwana wa ngai ! »
II S LinVB 19:2  Bayebisi Yoab ’te mokonzi azalaki kolela ; ayoki mawa mingi mpo ya Absalom.
II S LinVB 19:3  Mokolo mona mwa lilonga mobongwaneli bato banso mokolo mwa lilaka ntango bayoki ’te mokonzi azalaki kolela mwana wa ye.
II S LinVB 19:4  Basoda bazo­ngi o mboka bobele na nsoni, lokola bato bakimaki etumba.
II S LinVB 19:5  Mokonzi amizipi elongi na ela­mba mpe agangi makasi : « Mwana wa ngai Absalom ! Absalom, mwana wa ngai ! Mwana wa ngai e ! »
II S LinVB 19:6  Yoab akei epai ya mokonzi, akuti ye o ndako, alobi : « Lelo okoyokisa basaleli ba yo nsoni. Babikisi yo, babikisi bana ba yo babali na basi, babikisi basi na bamakango ba yo.
II S LinVB 19:7  Yo olingi baye bayini yo, mpe oyini baye balingi yo. Lelo olakisi polele ’te bakomanda na basoda bazali se mpamba o miso ma yo. Lelo nayebi malamu ’te soko Absalom azalaki na bomoi mpe biso banso tokufaki, mbele omonoki ya­ngo malamu.
II S LinVB 19:8  Sikawa teleme mpe ke­nde kolendisa mitema mya basoda ba yo, zambi nalayi ndai o miso ma Yawe, soko obimi te, moto moko akotikala elongo na yo na butu te ; mpe mpo yango ekoleka naino mabe ma­nso makwelaki yo banda bomwana tee lelo. »
II S LinVB 19:9  Bongo mokonzi atelemi mpe akei kofanda o ezibeli ya ndako. Bayebisi basoda banso : « Tala, mokonzi ayei kofanda pene na ezibeli ya ndako », mpe basoda banso bayei koteleme o boso bwa mokonzi. Ba-Israel banso bakimaki, moto na moto o ema ya ye.
II S LinVB 19:10  O mabota ma­nso ma Israel, bato bazalaki se ko­swana. Balobi : « Mokonzi alongolaki biso o maboko ma banguna ba biso, abikisaki biso o maboko ma ba-Filisti, mpe asengelaki kokima ekolo mpo akweya o maboko ma Absalom te.
II S LinVB 19:11  Nzo­kande Absalom, oyo topakolaki ye mafuta mpo azala mokonzi wa biso, akufi o etumba. Tozila lisusu nini mpo tozongisa mokonzi Davidi o ngwende ? »
II S LinVB 19:12  Mokonzi Davidi ayoki maloba ma bato ba Israel. Bongo atindi ba­nganga Nzambe Sadok na Ebiatar ba­loba na bakolo ba Yuda boye : « Mpo nini bolingi kotikala nsima mpo ya kozongisa mokonzi o mboka ya ye ?
II S LinVB 19:13  Bino bozali bandeko ba ngai, tozali makila moko mpe mosuni moko. Mpo nini bolingi kotikala nsima mpo ya koya na mokonzi awa ? »
II S LinVB 19:14  Boloba mpe na Amasa : « Biso na yo tozali makila moko te ? Nzambe asala ngai lokola alingi mpe abakisa etu­mbu esusu soko natii yo komanda wa basoda seko te o esika ya Yoab. »
II S LinVB 19:15  Davidi asali ’te babali banso ba Yuda bandima ye na motema moko. Bango batindeli mokonzi maloba maye : « Zo­nga elongo na basaleli ba yo ba­nso. »
II S LinVB 19:16  Mokonzi azongi mpe akomi o Yordane. Bato ba Yuda bayei o Gilgal kokutana na mokonzi mpe kosalisa ye akatisa Yordane.
II S LinVB 19:17  Simei, mwana wa Gera, moto wa Benyamin wa mbo­ka Bakurim akei mbangu elongo na ba-Yuda mpo bakutana na Davidi.
II S LinVB 19:18  Ayei na bato nkoto yoko ba libota lya Benyamin. Ezalaki wana mpe Siba, mosaleli wa ndako ya Saul, na bana babali ba ye zomi na batano mpe na basali ntuku ibale. Akei mbangu epai ya Yordane mpo ya kokutana na mokonzi.
II S LinVB 19:19  Basali manso mpo ’te mokonzi akatisa ebale mpe mpo ya kosepelisa ye. Simei, mwana wa Gera, amibwaki o boso bwa mokonzi, o ntango oyo azalaki kokatisa Yordane,
II S LinVB 19:20  alobi na mokonzi : « Mokonzi wa ngai, okanisa lisusu lisumu lya ngai te ! Lisumu liye ngai mosaleli wa yo nasalaki mokolo mokonzi wa ngai abimaki o Yeruzalem, okundola lya­ngo lisusu te. Mokonzi atala mpo yango te !
II S LinVB 19:21  Ngai, mosaleli wa yo, na­ndimi ’te nasali mabe. Kasi lelo, ngai moto wa liboso lya libota lya Yozefu, nayei mpo ’te nakutana na mokonzi wa ngai. »
II S LinVB 19:22  Abisai, mwana wa Seruya, atuni : « Awa Simei abeteleki moto oyo Yawe apakolaki mafuta ma bokonzi mobondo, akoki na liwa te ? »
II S LinVB 19:23  Kasi Davidi alobi : « Biso na bino, bana ba Seruya, likambo nini mpo ’te bokoma banguna ba ngai lelo ? Lelo tokoki nde koboma moto o Israel ? Emo­no­ni polele ’te nakomi mokonzi o Israel. »
II S LinVB 19:24  Mokonzi alobi na Simei : « Okokufa te ! » Mpe mokonzi alayi ndai.
II S LinVB 19:25  Mefiboset, nkoko wa Saul, ayei mpe kokutana na mokonzi. Banda mokolo mokonzi akendeki tee mokolo azongaki nzoto kolongonu, asu­kolaki makolo te, asanolaki ma­ndefu te, asukolaki bilamba bya ye mpe te.
II S LinVB 19:26  Ntango ayei o Yeruzalem mpo ’te akutana na mokonzi, Davidi atuni ye : « Mpo nini okendeki na ngai elongo te, Mefiboset ? »
II S LinVB 19:27  Azongisi : « E mokonzi wa ngai, mosaleli wa ngai Siba akosaki ngai. Nalingaki kobo­ngisa mpunda ya ngai mpo nakende elongo na mokonzi wa ngai, zambi ngai moko nayebi kotambola te.
II S LinVB 19:28  Kasi mosaleli wa ngai atongoki ngai epai ya mokonzi wa ngai. Mokonzi wa ngai azali lokola anzelu wa Nzambe ; bongo sala na ngai lokola olingi.
II S LinVB 19:29  Ata, o miso ma mokonzi wa ngai, bato banso ba libota lya tata wa ngai bakokaki na liwa, yo moto oya­mbaki ngai mosaleli wa yo o kati ya baye bakolia­ka o meza ya yo. Boniboni nakoka lisusu komilela epai ya mokonzi ? »
II S LinVB 19:30  Mo­konzi ayanoli : « Mpo nini ozali koloba mingi boye ? Nakati likambo : Bino na Siba, bokabolana mabelé. »
II S LinVB 19:31  Mefiboset alobi na moko­nzi : « Siba akamata mabelé manso, awa mokonzi wa ngai azongi o mboka nzoto kolongonu. »
II S LinVB 19:32  Barzilai, moto wa Galaad, alongwa­ki o Roglim. Akatisi Yordane elongo na mokonzi mpe alingi kotika ye penepene na Yordane.
II S LinVB 19:33  Barzilai azalaki mobange mpenza, akokisi mibu ntuku mwambe. Ye moto apesaki mokonzi bilei ntango azalaki o Makanaim, zambi azalaki moto wa nkita.
II S LinVB 19:34  Mokonzi alobi na Barzilai : « Koba mobembo mwa yo elongo na ngai, mpe ngai nakoleisa yo ntango tokofanda o Yeruzalem. »
II S LinVB 19:35  Barzilai azongiseli mokonzi : « Ngai nakoumela naino mibu boni mpo ’te nake­nde elongo na mokonzi o Yeruzalem ?
II S LinVB 19:36  Si­kawa nakokisi mibu ntuku mwambe. Nakoki koyeba nini ezali malamu to mabe ? Mosaleli wa yo akoki koyeba naino elengi ya bilei to ya limeli ? Nakoki koyoka lolaka la bayembi babali na basi ? Mokonzi wa ngai, mpo nini natiela yo naino mokumba ?
II S LinVB 19:37  Ngai, mosaleli wa yo, nakoleka se o ngambo ya Yordane elo­ngo na mokonzi. Mpo nini mokonzi alingi kofuta ngai lifuta boye ?
II S LinVB 19:38  Li-ngisa ngai mosaleli wa yo, nazonga mpe nakufa o mboka ya ngai, baku­nda ngai o lilita lya tata mpe lya mama wa ngai. Kasi kamata mosaleli wa yo Kiman, mwana wa ngai. Akende elongo na mokonzi wa ngai, sala na ye lokola olingi. »
II S LinVB 19:39  Mokonzi alobi : « Malamu, Kiman akende elongo na ngai, nakosala ye manso makosepelisa yo ; manso olingi kosenge ngai, nakokokisa mango. »
II S LinVB 19:40  Bato banso bakatisi Yordane ; mokonzi mpe akatisi ebale. Azingi Barzilai ekopi mpe abenisi ye. Barzilai azongi o mboka ya ye.
II S LinVB 19:41  Mokonzi akobi nzela ya ye tee Gilgal. Kiman akei na ye elongo. Bato banso ba Yuda na ndambo ya bato ba Israel balandi ye.
II S LinVB 19:42  Awa bato ba Israel bakomi epai ya mokonzi, batuni ye : « Mpo nini bandeko ba biso, bato ba Yuda, bakendeki kokamata yo mpe bakatisi yo na bandeko ba yo Yordane, na mpe bato banso ba Davidi ? »
II S LinVB 19:43  Bato banso ba Yuda bayanoli ba-Israel boye : « Tosali bongo zambi mokonzi azali moto wa libota lya biso. Bongo ntina nini bosiliki na ya­ngo ? Mokonzi afutaki nde bilei bya biso ? To akabelaki biso eloko ? »
II S LinVB 19:44  Ba-Israel bazongiseli bato ba Yuda : « Biso tozali mabota zomi, bongo tokokaki kokamata mokonzi, tozali mpe batomolo ba bino mpo nini bokinoli biso ? Biso bato ba liboso te, baye balobaki ’te mokonzi azonga ? » Kasi ma­loba ba-Yuda balobi maleki maloba ma ba-Israel na bokasi.
Chapter 20
II S LinVB 20:1  Ezalaki wana efaka ya moto, nkombo ’te Seba, mwana wa Bikri, wa libota lya Benyamin. Abeti mondule mpe alobi : « Biso tozali bato ba Davidi te ; biso na mwana wa Yese tozali bandeko te ! Bato ba Israel, bozonga o biema bya bino ! »
II S LinVB 20:2  Bato ba­nso ba Israel batiki Davidi mpe bala­ndi Seba, mwana wa Bikri. Kasi bato ba Yuda bandimi se kolanda mokonzi wa bango ut’o Yordane tee Yeruzalem.
II S LinVB 20:3  Davidi azongi o ndako ya ye o Yeruzalem. Mokonzi akamati bamaka­ngo zomi, baye atikaki mpo ’te bake­ngele ndako ya ye mpe atii ba­kengeli mpo ’te bakengele bango malamu. Apesi bango bilei, kasi akei epai ya bango te. Bafandi se bango moko tee mokolo mwa liwa lya ba­ngo ; bakomi lokola basi bazenge, ata mobali azalaki naino na bomoi.
II S LinVB 20:4  Mokonzi alobi na Amasa : « Bengisa ba-Yuda banso baya awa. Nsima ya mikolo misato ozala awa lisusu. »
II S LinVB 20:5  Amasa akei kobenga bato ba Yuda, kasi aumeli o nzela mpe azongi te o elaka Davidi apesaki ye.
II S LinVB 20:6  Davidi alobi na Abisai : « Seba, mwana wa Bikri, akoki kosala biso mabe mingi sikawa, koleka Absalom. Yo moko kamata basoda ba nkolo wa yo mpe kende kobengana Seba mpo ’te akoka kobombama o ebombamelo te, akima biso mpe te. »
II S LinVB 20:7  Bato ba Yoab babimi nsima ya Abisai elongo na ba-Keret, ba-Pelet mpe na basoda banso ba mpi­ko. Batiki Yeruzalem mpe bakei kobengana Seba, mwana wa Bikri.
II S LinVB 20:8  Bakomi penepene na libanga linene lizali o Gabaon ntango Amasa akutani na bango. Yoab alati monkoto mwa soda ; o mokaba mwa ye mwa soda akangi mopanga mozalaki o libobo o loketo la ye ; mopanga mobimi o libobo, mokwei o nse.
II S LinVB 20:9  Yoab atuni Amasa : « E ndeko wa ngai, ozali malamu ? » Na loboko la ye la mobali asimbi Amasa na mandefu lokola alingi kozinga ye ekopi.
II S LinVB 20:10  Amasa akebi te na mopanga mozalaki o loboko la Yoab. Yoab abeti ye o libumu mpe apanzi misopo mya ye o mabelé. Abeti ye mbala ibale te, zambi asili akufi. Yoab na ndeko wa ye Abisai bakei kobengana Seba, mwana wa Bikri.
II S LinVB 20:11  Elenge mobali moko, soda wa Yoab, oyo atikalaki penepene na Amasa, alobi : « Moto alingi Yoab mpe andimi Davidi, alanda Yoab ! »
II S LinVB 20:12  Amasa alalaki o makila ma ye o kati ya nzela, mpe elenge mobali amoni ’te bato banso batelemi wana. Alo­ngoli Amasa o nzela mpe abendi ye o elanga. Azipi ye na elamba, mpo amoni ’te bato banso bazalaki koleka, bakomi koteleme penepene na ebe­mbe.
II S LinVB 20:13  Awa alongoli Amasa o nzela, bato banso baleki, balandi Yoab, mpo ya kobengana Seba, mwana wa Bikri.
II S LinVB 20:14  Seba akei kotala mabota manso ma Israel tee Abel-Bet-Maaka, mpe bato ba Bikri banso… Basangani mpe balandi ye.
II S LinVB 20:15  Bato ba Yoab bayei kozinga mboka Abel-Bet-Maaka, basa-ngisi mabelé esika yoko penepene na lopango la mboka. Bato banso ba Yoab basali makasi mpo bakweisa lopango.
II S LinVB 20:16  Mwasi moko wa mayele agangi ut’o efelo ya mboka, esika atelemi : « Boyoka, boyoka ! Bokende koyebisa Yoab : Obeleme mpo ’te nalobela yo. »
II S LinVB 20:17  Yoab akei epai ya mwasi, mpe mwasi atuni ye : « Yo nde Yoab ? » Azongisi : « Ngai oyo. » Mwasi alobi : « Yoka maloba ma mosaleli wa yo. » Yoab ayanoli : « Nazali koyoka. »
II S LinVB 20:18  Mwa­si alobi : « Kala bato bameseneke koloba : ‘Bakende kotuna bato ba Abel mpe likambo likosila’.
II S LinVB 20:19  Biso tozali bato ba boboto mpe ba bosembo o Israel. Mpe yo olingi koboma mboka, ata engumba enene o Israel. Mpo nini olingi kobebisa ekolo ya Yawe ? »
II S LinVB 20:20  Yoab azongisi : « Ata moke te ! Nalingi kobebisa to koboma eloko te.
II S LinVB 20:21  Toyei se mpo ya moto moko wa ngomba ya Efraim, nkombo ’te Seba, mwana wa Bikri, oyo atomboki na mokonzi Davidi. Kaba ye o maboko ma biso, bobele ye moko, mpe nakotika kozinga mboka. » Mwasi alobi na Yoab : « Malamu ! Tokobwaka motó mwa ye ut’o lopango la mboka. »
II S LinVB 20:22  Mwa­si akei koyebisa bato banso lokola mayele ma ye malakisi ye. Bakati Seba, mwana wa Bikri, motó, mpe babwaki mwango epai ya Yoab. Yoab abeti mondule ; batiki kozinga mboka mpe bapalangani, moto na moto o ema ya ye. Yoab azongi o Yeruzalem epai ya mokonzi.
II S LinVB 20:23  Yoab azalaki komanda wa basoda banso ba Israel. Benaya, mwana wa Yoyada, azalaki komanda wa basoda ba Keret mpe ba Pelet.
II S LinVB 20:24  Adoram azalaki kapita wa bangamba. Yozafat, mwana wa Akilud, azalaki moyangeli wa makambo ma ndako ya moko­nzi.
II S LinVB 20:25  Siya azalaki mokomi minkanda ; Sadok na Ebiatar bazalaki banganga Nza­mbe.
II S LinVB 20:26  Ezalaki mpe wana Ira, moto wa Yair, azalaki nganga Nza­mbe wa Davidi.
Chapter 21
II S LinVB 21:1  O eleko ya Davidi, monge­nge mongali, moumeli mibu misato mobimba. Davidi atuni Yawe, mpe Yawe alobi : « Ntina ya nzala : Saul na bandeko ba ye babomaki bato ba Gabaon. »
II S LinVB 21:2  Mokonzi abengi bato ba Gabaon mpe asololi na bango. Ba-Gabaon bazalaki ba-Israel mpe­nza te, bazalaki ba-Amor baye batikalaki ; ba-Israel balayelaki bango ndai ’te bakosala bango mabe te. Nzo­kande Saul alukaki koboma ba­ngo, mpo alingaki kobatela bana ba Israel mpe ba Yuda.
II S LinVB 21:3  Davidi alobi na ba-Gabaon : « Nakoki kosalisa bino na nini, boniboni nakoki kobongisa likambo mpo ’te bobenisa ekolo ya Yawe ? »
II S LinVB 21:4  Ba-Gabaon bazongisi : « Biso na Saul na bandeko ba ye tozali kowela palata to mosolo te, tolingi mpe koboma moto moko o Israel te. » Davidi alobi : « Ata bokoloba nini, nakosala yango. »
II S LinVB 21:5  Bango bayanoli : « Moto oyo alingaki kosilisa biso banso mpe akanisaki ’te tosili tokufi o ekolo mobimba ya Israel,
II S LinVB 21:6  malamu bapesa biso bana ba ye babali nsa­mbo mpe tokotingisa bango na nsi­nga o nzete o miso ma Yawe kuna o Gibea, mboka ya Saul. » Mokonzi alobi : « Nakokaba bango. »
II S LinVB 21:7  Kasi mokonzi abikisi Mefiboset, mwana wa Yonatan, nkoko wa Saul, zambi Davidi na Yonatan mwana wa Saul balayaki ndai o miso ma Yawe.
II S LinVB 21:8  Bongo mokonzi akamati bana babali babale, baye Rispa, mwana wa Aya, abotaki na Saul, nkombo ’te Armoni na Mefiboset, na mpe bana babali batano, baye Merab, mwana wa Saul, abotaki na Adriel, mwana wa Barzilai, moto wa Mekola.
II S LinVB 21:9  Akabi bango o maboko ma bato ba Gabaon ; batingisi bango o nzete o miso ma Yawe o ngomba. Bango banso nsambo bakufi elongo. Babomi bango o mikolo mya yambo mya eleko ya bobuki mbuma, ntango babandi kobuka mbuma ya mampa.
II S LinVB 21:10  Rispa, mwana wa Aya, akamati elamba ya mpili, atandi yango o libanga mpo ya kofanda kuna ut’o ntango babandi kobuka mbuma tee ntango mbula eyei konokela bango. Apekisi bongo ndeke ya likolo ikoma penepene te ntango ya moi, nyama ya zamba ibeleme mpe na butu te.
II S LinVB 21:11  Bayebisi Davidi likambo Rispa, mwana wa Aya, makango wa Saul, asalaki.
II S LinVB 21:12  Davidi akei kokamata mi-nkuwa mya Saul mpe mya mwana wa ye Yonatan epai ya bankumu ba Yabes o mokili mwa Galaad, zambi ba­ngo balongolaki bibembe o Bet-Sean, esika ba-Filisti batingisaki byango o nzete, ntango babomaki Saul o etu­mba ya Gilboa.
II S LinVB 21:13  Davidi alongoli mi­nkuwa mya Saul mpe mya mwana wa ye Yonatan ; basangisi mpe minkuwa mya bato batingisaki o nzete.
II S LinVB 21:14  Bakundi minkuwa mya Saul mpe mya mwana wa ye Yonatan o mokili mwa Benyamin, o Sela, o lilita lya Kis, tata wa Saul. Basali bongo makambo ma­nso mokonzi atindaki. Nsima Nza­mbe ayokeli bato ba ekolo mawa.
II S LinVB 21:15  Ba-Filisti babundi naino bitumba bisusu na ba-Israel. Davidi akei elo­ngo na basoda ba ye kobunda na ba-Filisti. Kasi Davidi ayoki nzoto ekomi kolembe.
II S LinVB 21:16  Yisbi-be-Nob, moto wa libota lya Rafa, azalaki na liko-ngo, bozito bwa lyango mitako mya mbengi nkama isato, akangi mpe mopanga mwa sika o loketo ; alobi ’te akoboma Davidi.
II S LinVB 21:17  Kasi Abisai, mwa­na wa Seruya, ayei kosalisa Davidi, abeti mo-Filisti mpe abomi ye. Yango wana bato ba Davidi balobi na ye : « Okoki kobunda elongo na biso lisusu te, ozimisa bongo mwinda o Israel te. »
II S LinVB 21:18  Na nsima babundi naino etumba na ba-Filisti o Gob. O etu­mba ena Sibekai wa Kusa abomi Saf, moto moko wa libota lya Rafa.
II S LinVB 21:19  Babundi etumba lisusu na ba-Filisti o Gob. Elkanan, mwana wa Yair-Oregim wa Beteleme, abomi Goliat wa mboka Gat na likongo linene. Esimbeli ya lyango ezalaki lokola nzete ya motongi bilamba.
II S LinVB 21:20  Babundi etumba esusu o Gat. Moto moko azalaki kuna, na misapi motoba o maboko mpe o makolo ma ye, misapi ntuku ibale na minei ; ye elo­mbe mpenza, azalaki moto wa libota lya Rafa.
II S LinVB 21:21  Abeteli Israel mobondo, kasi Yonatan, mwana wa Simea, ndeko wa Davidi, abomi ye.
II S LinVB 21:22  Bango banei bazalaki bankoko ba Rafa wa Gat ; banso bakufi na maboko ma Davidi mpe ma basoda ba ye.
Chapter 22
II S LinVB 22:1  O mokolo Yawe abikisi Davidi o maboko ma banguna ba ye banso mpe o maboko ma Saul, Davidi ayembeli Yawe nzembo eye :
II S LinVB 22:2  « Yawe azali libanga lya ngai mpe ebombamelo ya ngai, ye mobikisi wa ngai.
II S LinVB 22:3  Ye azali Nzambe wa ngai, nakobo­mbama epai ya ye. Ye nguba ya ngai, ebuneli ya lilonga lya ngai, ye ebombamelo ya ngai, ye mobikisi wa ngai, akobikisa ngai o maboko ma bato ba bitumba.
II S LinVB 22:4  Bakumisa ye ! Nabeleli Yawe mpe na­longi banguna ba ngai.
II S LinVB 22:5  Mbonge ya liwa izingi ngai, mai bozindo ma Belial mabangisi ngai.
II S LinVB 22:6  Nsinga ya mboka ya bawa ikangi ngai, mitambo mya liwa mitandami liboso lya ngai.
II S LinVB 22:7  Ntango nayoki mpasi nabeleli Yawe mpe nabondeli Nzambe wa ngai. Ut’o Tempelo ya ye ayoki lolaka la ngai, mpe boleli bwa ngai bokomi o matoi ma ye.
II S LinVB 22:8  Bongo mokili moningani makasi, makonzi ma likolo makomi kole-nge mpe maningani mpo ya nkanda ya ye.
II S LinVB 22:9  Milinga mibimi o zolo ya ye ; móto mokoliaka binso mobimi o monoko mwa ye, mpe makala ma móto mazali kopela o kati.
II S LinVB 22:10  Agumbi likolo mpe akiti, atamboli o limpata liindo.
II S LinVB 22:11  Abuteli kerubim moko mpe api-mbwi, amononi likolo lya mapapu ma mompepe.
II S LinVB 22:12  Abombami o kati ya molili mozali kozipa ye o kati ya londende mpe ya mampata maindo.
II S LinVB 22:13  Mwinda makasi motamboli liboso lya ye, makala ma móto mapeli o kati.
II S LinVB 22:14  Yawe abetisi nkake ut’o likolo, oyo afandi o nta likolo ayokisi lolaka la ye.
II S LinVB 22:15  Atindi makula mpe apanzi mango, angengisi monkalali mpe abwaki mwango epai na epai,
II S LinVB 22:16  mpe nse ya mbu ekomi komonono. Makonzi ma nse makomi polele nta­ngo Yawe abandi koganga mpe zolo ya ye ebimisi mpema.
II S LinVB 22:17  Ut’o likolo abimisi loboko mpo ’te aka­nga ngai, abikisi ngai o mai manene ;
II S LinVB 22:18  abikisi ngai o maboko ma monguna makasi wa ngai, o maboko ma ba­nguna baye baleki ngai na nguya.
II S LinVB 22:19  Bakwelaki ngai o nzoto o mokolo nayokaki mpasi, kasi Yawe ayaki kosalisa ngai.
II S LinVB 22:20  Abikisi ngai, abateli ngai, abikisi ngai zambi alingi ngai mingi.
II S LinVB 22:21  Soko nasali malamu Yawe akozo-ngisela ngai malamu, soko nazali na maboko peto akopesa ngai mbano,
II S LinVB 22:22  zambi nalandi se nzela ya Yawe, naboyaki kotosa monoko mwa Nza­mbe wa ngai te.
II S LinVB 22:23  Ntango inso nakotosaka mibeko mya ye, nalongwi o nzela ya biti-nda bya ye te.
II S LinVB 22:24  Nazali na likambo libe o miso ma ye te, mpe nakimi masumu manso.
II S LinVB 22:25  Bongo Yawe afuti ngai, engebene na bosembo bwa ngai, mpe amoni bopeto bwa ngai.
II S LinVB 22:26  Okolakisaka bolingi na moto alingi yo, okolakisaka bosembo na moto semba.
II S LinVB 22:27  Okolakisaka bopeto na oyo azali na motema peto, okosalaka mayele na moto akosalaka mabe.
II S LinVB 22:28  Okobikisaka bato bake, okokitisaka bato bakomitombola.
II S LinVB 22:29  E Yawe, yo moto ozali mwinda mwa ngai, Yawe akongengeleke ngai o kati ya molili.
II S LinVB 22:30  Elongo na yo nakoki kobuka lopa­ngo, elongo na yo nakopimbwa likolo lya efelo.
II S LinVB 22:31  Nzela ya Nzambe ezali na mbeba te, liloba lya Yawe lizali na lokuta te. Ye nguba ya bato banso bakobombamaka epai ya ye.
II S LinVB 22:32  Nani azali Nzambe ? Bobele Yawe te ? Nani libanga lya ngai ? Bobele Nzambe te ?
II S LinVB 22:33  Nzambe oyo azali ebombamelo ya ngai, atambwisi ngai o nzela kitoko.
II S LinVB 22:34  Apesi ngai makolo mbangu lokola mboloko, akotelemisa ngai o ngo­mba.
II S LinVB 22:35  Amesenisi maboko ma ngai na etu­mba, mpe maboko ma ngai makogumba litimbo lya mbengi.
II S LinVB 22:36  Opesi ngai nguba ya yo ekolongisa ngai, lisalisi lya yo likolendisa ngai.
II S LinVB 22:37  Obongiseli ngai nzela, mpe makolo ma ngai makolembe te.
II S LinVB 22:38  Nalandi banguna ba ngai mpe nakoboma bango, nakozonga te soko nasilisi koboma bango te.
II S LinVB 22:39  Nabeti bango, bakoteleme lisusu te, bakwei mpe balali o nse ya makolo ma ngai.
II S LinVB 22:40  Opesi ngai nguya ntango ya etu­mba, ogumbisi banyokoli ba ngai o nse ya makolo ma ngai.
II S LinVB 22:41  Okimisi banguna ba ngai o miso ma ngai, nasilisi baye banso bayini ngai.
II S LinVB 22:42  Bagangi, kasi moto moko ayei kosalisa bango te, babeleli Yawe, kasi ayanoli bango te.
II S LinVB 22:43  Naniki bango lokola mputulu ya zando, nanyati bango na makolo lokola potopoto ya nzela.
II S LinVB 22:44  Obikisi ngai o maboko ma bato batombokoki na ngai, obateli ngai mpo ’te nayangela bikolo. Bikolo nayebaki liboso te bikomi kosalela ngai.
II S LinVB 22:45  Bampaya bakomi kokumisa ngai, se mpo ya liloba lyoko batosi ngai.
II S LinVB 22:46  Bana ba bauta bakomi kokweya, ba­lengi ntango babimi o ebombamelo ya bango.
II S LinVB 22:47  Yawe azala seko ! Bakumisa Liba­nga lya ngai ! Nzambe alonga, ye mobikisi wa ngai !
II S LinVB 22:48  Nzambe oyo apesi etumbu na bato basali ngai mabe, akitisi bato o nse ya makolo ma ngai.
II S LinVB 22:49  Obikisi ngai o maboko ma banguna, olongisi ngai o miso ma banyokoli ba ngai, mpe olongoli ngai o maboko ma bato ba bitumba.
II S LinVB 22:50  Yawe, nakokumisa yo o kati ya bapagano, mpe nakoyembela nko­mbo ya yo.
II S LinVB 22:51  Abikisi mokonzi o makama manso, alakisi Mesiya wa ye bolamu, asalisi Davidi na libota lya ye seko. »
Chapter 23
II S LinVB 23:1  Yoka maloba ma nsuka ma Davidi : « Maloba ma Davidi, mwana wa Yese, maloba ma moto aponomi mpo azala mokonzi, oyo Nzambe wa Yakobo apakolaki mafuta ma bokonzi, oyo akoyembaka nze­mbo o Israel.
II S LinVB 23:2  Elimo wa Yawe alobaki na monoko mwa ngai, liloba lya ye lizalaki o lolemu la ngai.
II S LinVB 23:3  Nzambe wa Yakob alobaki : Liba­nga lya Israel asakolaki na monoko mwa ngai : Moto akoyangelaka bato na bosembo mpe oyo akoyangelaka na bobangi Nzambe,
II S LinVB 23:4  azali lokola moi mwa ntongo o nta­ngo mwese mokobimaka, lokola nto­ngo ezangi mampata, monge-ngisi matiti nsima ya mbula.
II S LinVB 23:5  Se bongo libota lya ngai lizali penepene na Nzambe, zambi akataki na ngai bondeko bwa seko, abongisi mpe abombisi bwango makasi. Ye akolisi elikya ya ngai, abakiseli ngai maye manso nalingi.
II S LinVB 23:6  Kasi bato ba Belial bazali lokola nzube bakobwakaka, bakosimbaka bango na maboko te.
II S LinVB 23:7  Bakosimbaka bango bobele na bibende to na nzete ya likongo, mpe bakotumbaka bango na móto. »
II S LinVB 23:8  Nkombo ya bilombe ba Davidi, bango baye : Isboset, moto wa Kakmoni, komanda wa bilombe basato ; ye moto abomi bato nkama mwambe na likongo, ye moko.
II S LinVB 23:9  Nsima ya ye, Eleazar, mwana wa Dodo, moto wa Ako. Ye azalaki moko wa bilombe basato bakei elongo na Davidi o ntango babundi na ba-Filisti, ba-Israel bakimi,
II S LinVB 23:10  kasi ye atikali ye moko mpe abomi ba-Filisti tee misapi mya ye milembi mpe mikangami na mopanga. Yawe apesi bango lilonga linene o mokolo mona mpe basoda ba Israel bazongi o esika ya etumba, bobele mpo ya kobotolo biloko.
II S LinVB 23:11  Nsima ya ye, Sama, mwana wa Ela, moto wa Arar. Ba-Filisti basangani o Leki. Ezalaki kuna elanga ya madesu, mpe bato bakimi o boso bwa ba-Filisti,
II S LinVB 23:12  kasi ye atelemi o kati ya elanga, abateli yango mpe abomi ba-Filisti. Yawe apesi lilonga linene.
II S LinVB 23:13  O kati ya basoda ntuku isato, bato basato batiki baninga mpe bakei epai ya Davidi o eleko babandi ko­buka mbuma, bakomi o mobenga mwa Adulam. Ndambo ya ba-Filisti bapikaki nganda o lobwaku la Refaim.
II S LinVB 23:14  O ntango ena Davidi azalaki o mobenga, mpe basoda ba-Filisti bazalaki o Beteleme.
II S LinVB 23:15  Davidi ayoki mposa ya mai mpe alobi : « Nani akotokela ngai mai o libulu penepene na ezibeli ya mboka ? »
II S LinVB 23:16  Bilombe basato bayi­ngeli o nganda ya ba-Filisti, batoki mai o libulu penepene na ezibeli ya Beteleme mpe bayei na mango epai ya Davidi. Kasi Davidi alingi komele mango te, mpe asopi mango o nse mpo ya Yawe.
II S LinVB 23:17  Alobi : « Yawe apesa ngai etumbu soko nameli mai. Ezali lokola makila ma bato bandimaki kokufa mpo ya ngai. » Bongo aboyi komele mango. Tala misala bilombe basato basalaki.
II S LinVB 23:18  Abisai, ndeko wa Yoab mpe mwa­na wa Seruya, azalaki komanda wa basoda ntuku isato. Ye moko abomi bato nkama isato na likongo, mpe azwi lokumu o kati ya bango ntuku isato.
II S LinVB 23:19  Aleki bango ntuku isato na lokumu mpe akomi komanda wa bango, kasi batangi ye o molongo mwa bilombe basato te.
II S LinVB 23:20  Benaya, mwana wa Yoyada, soda wa mpiko, moto asali misala mya kokamwa, auti o Kabseel. Ye moto abomi ba-Ariel babale ba Moab. Ye moto akoti o libulu mpe abomi ntambwe mokolo mbula ya matandala enokoki.
II S LinVB 23:21  Ye moto abomi mpe mo-Ezipeti, mo­to molai mpenza. Moto wa Ezi­peti asimbi likongo o loboko. Kasi Benaya, lingenda o loboko, akei ko­kuta­na na ye, abotoli likongo lya mo-Ezi­pe­ti, mpe abomi ye na likongo lya ye moko.
II S LinVB 23:22  Benaya, mwana wa Yoyada, asali bongo mpe akomi moto wa lokumu o kati ya bilombe ntuku isato.
II S LinVB 23:23  Aleki bango ntuku isato na lokumu, kasi batangi ye o molongo mwa bilombe basato te. Davidi atii ye komanda wa bakengeli ba ye.
II S LinVB 23:24  Asael, ndeko wa Yoab, azali mpe o kati ya basoda ntuku isato, na mpe Elkanan, mwana wa Dodo wa Beteleme ;
II S LinVB 23:25  Sama, moto wa Karod na Elika, moto wa Karod ;
II S LinVB 23:26  Keles, moto wa Pelet, na Ira, mwana wa Ikes, moto wa Tekoa ;
II S LinVB 23:27  Abiezer, moto wa Anatot, na Sibekai, moto wa Kusa ;
II S LinVB 23:28  Salomo, moto wa Akoa, na Marai, moto wa Netofa ;
II S LinVB 23:29  Keled, mwana wa Baana, moto wa Netofa, na Itai, mwa­na wa Ribai, moto wa Gibea, wa libota lya Benyamin ;
II S LinVB 23:30  Benaya, moto wa Pireaton na Idai, moto wa lobwaku la Gaas ;
II S LinVB 23:31  Abibaal, moto wa Arba, na Azmavet, moto wa Bakurim ;
II S LinVB 23:32  Eli­aba, moto wa Salbon, na Yasen, moto wa Gimzo ;
II S LinVB 23:33  Yonatan, mwana wa Sama, moto wa Arar, na Akiam, mwana wa Sarar, moto wa Arar ;
II S LinVB 23:34  Eli­felet, mwana wa Akasbai, moto wa Bet-Maaka, na Eliam, mwana wa Akitofel, moto wa Gilo ;
II S LinVB 23:35  Kesrai, moto wa Karmel, na Parai, moto wa Arba ;
II S LinVB 23:36  Yigeal, mwana wa Natan, moto wa Soba, na Bani, moto wa Gad ;
II S LinVB 23:37  Selek, moto wa Amon, na Nakrai, moto wa Beerot, moto azalaki komeme bibuneli bya Yoab, mwana wa Seruya ;
II S LinVB 23:38  Ira, moto wa Yatir, na Gareb, moto wa Yatir ;
II S LinVB 23:39  na mpe Uria, moto wa Eti. Bango banso, bato ntuku isato na nsambo.
Chapter 24
II S LinVB 24:1  Yawe asiliki lisusu na ba- Israel mpe asali ’te Davidi ato­mbokela bango, alobi na ye : « Ke­nde kotanga ba-Israel banso na mpe ba-Yuda. »
II S LinVB 24:2  Mokonzi alobi na Yoab, komanda wa basoda banso : « Katisa ekolo mobimba ya Israel uta Dan kin’o Berseba mpe tanga bato banso mpo ’te nayeba soko bazali boni. »
II S LinVB 24:3  Yoab ayanoli mokonzi : « Yawe, Nza­mbe wa yo, akolisa naino ekolo mbala nkama mpe mokonzi wa ngai amono likambo na miso ma ye moko ! Kasi mpo nini mokonzi alingi kosala yango ? »
II S LinVB 24:4  Nzokande Yoab na bakomanda ba basoda bakoki koboya etinda ya mokonzi te. Yango wana Yoab akei elongo na bakomanda ba basoda kotanga bato banso ba Israel.
II S LinVB 24:5  Bakatisi Yordane mpe bapiki nga­nda o Aroer, o Sudi ya mboka eye ezali o lobwaku la moluka mwa Gad, na nsima bakei o Yazer.
II S LinVB 24:6  Bakei o Galaad mpe o mokili mwa ba-Iti, o Dan mpe o mokili mwa Sidoni.
II S LinVB 24:7  Na nsima bakomi o ebombamelo ya Tiro mpe o mboka inso ya ba-Ivi na ba-Kanana mpe basukisi mobembo o Negeb o mokili mwa Yuda, o Berseba.
II S LinVB 24:8  Bakatisi bongo ekolo mobimba, mpe nsima ya sanza libwa na mikolo ntuku ibale bazongi o Yeruzalem.
II S LinVB 24:9  Yoab ayebisi mokonzi motango mwa bato : O Israel bato bakoki na etumba bazalaki nkoto nkama mwa­mbe ; o Yuda bato bazalaki nkoto nkama itano.
II S LinVB 24:10  Kasi na nsima Davidi ayoki motema nsomo, zambi atangisi bato ba ye ; alobi na Yawe : « Nasali lisumu linene. Limbisa lisumu lya mosaleli wa yo, Yawe, nasali lokola elema. »
II S LinVB 24:11  Ntango Davidi alamuki na nto­ngo, Yawe asili ayebisaki profeta Gad, momoni-makambo wa Davidi :
II S LinVB 24:12  « Kende koyebisa Davidi ’te Yawe alobi : Nakolakisa yo bitumbu bisato : yo moko pono etumbu nini nakopesa yo. »
II S LinVB 24:13  Gad akei epai ya Davidi mpe ayebisi ye : « Olingi nde nzala engala mibu misato o mokili mwa yo ? To okima banguna sanza isato mpe babengana yo ? To olingi nde bokono bobe bwa liwa boboma bato ba ekolo ya yo mikolo misato ? Kanisa sikawa ! Yebisa ngai eyano nini nakende kopesa Oyo atindi ngai. »
II S LinVB 24:14  Davidi azongisi : « Nayebi te ! Nayoki mo­tema nsomo mpenza ! A, tokweya se o maboko ma Yawe, ye azali nta ngolu, kasi o maboko ma bato te. »
II S LinVB 24:15  Davidi aponi bongo bokono bwa liwa. Ut’o mokolo mwango Yawe atindi bokono bwa liwa o Israel, mikolo mi­sato mobimba. Mpe ut’o Dan kin’o Berseba bato nkoto ntuku nsa­mbo bakufi.
II S LinVB 24:16  Anzelu atandi loboko mpo ya koboma mpe bato ba Yeruzalem, kasi Yawe ayokeli bango mawa mpe alobi : « Tika, ekoki bongo, zongisa loboko la yo. » Anzelu wa Yawe azalaki penepene na etutelo ya Arauna, moto wa Yebus.
II S LinVB 24:17  Emoni Davidi ’te anzelu azalaki koboma bato, alobi na Yawe : « Ngai moto nasumuki, ngai moto nabebisi. Bango basali mabe te. Loboko la yo lobete se ngai mpe libota lya ngai. »
II S LinVB 24:18  O mokolo mona Gad akei epai ya Davidi mpe alobi na ye : « Kende kotongela Yawe altare o etutelo ya Arauna, moto wa Yebus. »
II S LinVB 24:19  Davidi akei lokola Gad alobaki mpe lokola Yawe atindaki.
II S LinVB 24:20  Arauna atali mpe amoni mokonzi na basaleli ba ye bayei kokutana na ye ; abimi o ndako mpe akumbami o boso bwa moko­nzi, elongi o nse.
II S LinVB 24:21  Arauna atuni : « Mpo nini mokonzi wa ngai ayei epai ya ngai mosaleli wa ye ? » Davidi ayanoli : « Nayei kosomba etutelo mpo ’te natongela Yawe altare. Bobele bo­ngo bokono bokolongwa o ekolo. »
II S LinVB 24:22  Arauna azongisi : « Mokonzi wa ngai akamata lokola alingi mpo ya kotu­mbela Yawe libonza. Kamata ngo­mbe bo libonza lya kotumba, kamata mabaya ma likalo bo nkoni.
II S LinVB 24:23  Mosaleli wa mokonzi apesi yo mana ma­nso ! » Mpe Arauna alobi na mokonzi : « Yawe Nzambe wa yo andima libo­nza lya yo ! »
II S LinVB 24:24  Kasi mokonzi alobi na Arauna : « Te, nalingi kosomba yango na mosolo, nakobonzela Yawe Nzambe wa ngai libonza te, soko nafuti lyango te. » Bongo Davidi asombi etutelo na mpe ngombe na mitako mya palata ntuku itano.
II S LinVB 24:25  O esika ena Davidi atongeli Yawe altare mpe abonzi mabonza ma kotumba na miboma mya bondeko. Yawe ayokeli ekolo mawa mpe bokono bolongwi o Israel.