Chapter 1
II M | LinVB | 1:1 | Losako na bino bandeko ba biso ba-Yuda bozali o Ezipeti. Bandeko ba bino ba Yeruzalem mpe ba mokili mwa Yudea batombeli bino boboto boleki. | |
II M | LinVB | 1:2 | Nzambe akabela bino malamu ndenge na ndenge, akundola bondeko akataki na Abarama, Izaka na Yakob, basaleli ba ye ba lobokó. | |
II M | LinVB | 1:3 | Apesa bino motema malamu mpo ’te bokoka kokumisa ye mpe kosala na motema moko maye ye alingi. | |
II M | LinVB | 1:5 | Andima bisambo bya bino mpe azongisela bino bondeko, atika bino o mikolo mya mpasi te. | |
II M | LinVB | 1:7 | O eleko Demetrio azalaki mokonzi, o mobu mwa monkama na ntuku motoba na libwa, biso ba-Yuda tokomelaki bino boye : « O ntango minyoko mpe mpasi enene ikwelaki biso, banda mokolo Yason na baninga ba ye batekeki mabelé masantu mpe basulaki ekolo ya biso, | |
II M | LinVB | 1:8 | batumbaki ezibeli enene ya Tempelo, mpe babomi bato basalaki mabe te. O ntango ena tosambelaki Mokonzi, mpe Mokonzi andimelaki biso : sikawa tokoki kobonzela ye mabonza ma kotumba na fufu ya mampa, kopelisa miinda mpe kotia mampa o meza. » | |
II M | LinVB | 1:9 | Yango wana toyebisi bino : bosepela eyenga ya Milako o sanza Kisleu. Tokomeli bino bongo o mobu mwa monkama na ntuku mwambe na mwambe. | |
II M | LinVB | 1:10 | Boyamba losako la bato ba Yeruzalem mpe ba Yudea, bankumu ba ekolo mpe Yudas batindeli bino : losako na Aristobulo, mosalisi wa mokonzi Tolemeo mpe moto wa libota lya banganga Nzambe, mpe na ba-Yuda banso o Ezipeti. Totombeli bino banso bolamu mpe nzoto kolongonu. | |
II M | LinVB | 1:11 | Nzambe abikisi biso o makama manene, yango wana totondi ye mingi, mpo abuneli biso etumba na mokonzi. | |
II M | LinVB | 1:13 | Mokonzi wa bango akendeki o ekolo ya ba-Persi na basoda ebele, baye bakanisaki ’te moto moko akokoka bango te. Banganga Nzambe ba tempelo ya Nanea basalaki mayele mpe babomaki bango. | |
II M | LinVB | 1:14 | Antioko akosaki ’te akobala nzambe mwasi Nanea : ayingeli o tempelo elongo na baninga ba ye, kasi ezalaki se mpo ’te bapesa ye biloko bya nkita lokola biloko bya libala. | |
II M | LinVB | 1:15 | Banganga Nzambe ba tempelo babimisaki biloko bina binso mpo ya kolakisa byango. Antioko akotoki elongo na baninga o eteni ya kati ya tempelo. Ekoti ye, bakangi lopango. | |
II M | LinVB | 1:16 | Bafungoli lidusu lizalaki o motondo mwa tempelo, mpe babandi kobwakela ye mabanga. Na nsima bakati nzoto ya ye biteni biteni, mpe babwaki motó mwa ye o boso bwa baye bazalaki o libanda. | |
II M | LinVB | 1:18 | Awa tokosepela eyenga ya Bopetoli Tempelo o sanza Kisleu, mokolo mwa ntuku ibale na mitano, malamu toyebisa bino mpo yango. Bongo bino mpe bosepela eyenga ena lokola bakosepelaka eyenga ya Milako mpe eyenga ya Móto moye momononoki ntango Neemia abonzaki mabonza, ntango asilisaki kotonga lisusu Tempelo na altare. | |
II M | LinVB | 1:19 | O eleko bakambaki bankoko ba biso o boombo o Persi, banganga Nzambe ba mpiko bakamataki móto o altare, mpe babombaki mwango na mayele o libulu likauki mai. Babombaki mwango malamu mpenza, ata moko ayebaki esika ena te. | |
II M | LinVB | 1:20 | Nsima ya mibu miike Nzambe asalisi biso na likambo lina. Mokonzi wa Persi azongisi Neemia o mokili mwa biso. Neemia atindi bankoko ba banganga Nzambe, baye babombaka móto kala, bakende koluka mwango. Kasi bayei koyebisa ’te bazwi móto te, kasi se potopoto lokola mafuta. Neemia atindi bango batoka mwa ndambo mpe bayela ye yango. | |
II M | LinVB | 1:21 | Ntango basili kolengele binso mpo ya mabonza, Neemia atindi banganga Nzambe basopa yango o mabonza mpe o nkoni. | |
II M | LinVB | 1:22 | Basali se bongo. Elongwi mampata mazipaki mwese, moi mokomi kongala. Na mbala yoko móto monene mopeli wana ; bato banso bakamwi mingi. | |
II M | LinVB | 1:23 | O ntango libonza lizalaki kotumbama, banganga Nzambe basambeli elongo na bato banso. Yonatan abandi losambo, basusu bandimi, bango na Neemia. | |
II M | LinVB | 1:24 | Bazalaki kosambela boye : « E Mokonzi Nzambe, Mozalisi wa biloko binso, Nzambe oyo okobangisaka bato, ozali na bokasi, na bosembo mpe na ngolu. Bobele yo ozali mokonzi mpe nta bolamu. | |
II M | LinVB | 1:25 | Se yo moko okokabaka, ozali nta bosembo, na bokasi bonso mpe wa lobiko. Yo okobikisaka Israel o mabe manso. Oponoki bankoko ba biso bazala bato ba yo, mpe osantisaki bango. | |
II M | LinVB | 1:26 | Oyamba libonza liye mpo ya ekolo ya yo Israel mobimba. Batela bato ba yo mpe santisa yango. | |
II M | LinVB | 1:27 | Osangisa bandeko ba biso baye bapanzani. Osikola baye bakangemi o boombo epai ya bapagano. Otala na bolamu baye basambwi mpe baboyami. Bongo bapagano banso bayeba ’te yo ozali Nzambe wa biso. | |
II M | LinVB | 1:31 | Ntango libonza litumbami nye, Neemia atindi ’te basopa mai maye matikali o mabanga manene. | |
II M | LinVB | 1:33 | Likambo lyango lipalangani ; bayebisi mpe mokonzi wa Persi ’te o esika banganga Nzambe baye bakangemaki o boombo babombaki móto, bazwaki se mai. Bayebisi ye ’te Neemia na baninga ba ye batumbaki na mango mabonza masantu. | |
II M | LinVB | 1:34 | Mokonzi atali likambo lyango malamu, mpe atindi ’te bazinga esika yango na lopango mpo ezala esika esantu. | |
II M | LinVB | 1:35 | Baye mokonzi atindi ’te basala o esika eye, apesi bango makabo manene ma biloko azalaki kozwa. | |
Chapter 2
II M | LinVB | 2:1 | O minkanda mya kala totangi ’te profeta Yeremia atindaki bato bakei o boombo bakamata móto lokola tolobaki. | |
II M | LinVB | 2:2 | Apesaki bango buku ya Mobeko, mpe alakaki bango polele ’te babosana mibeko mya Mokonzi te. Babembeme mpe te na botali bikeko bya palata mpe bya wolo biye bikembami na bilamba kitoko. | |
II M | LinVB | 2:3 | Apesi bango malako maike, apaleli bango mpo ’te Mobeko molongwa o mitema mya bango te. | |
II M | LinVB | 2:4 | O monkanda mona ekomami mpe ’te o ntango profeta akei o ngomba eye Moze abutaki mpo ya kotala mokili mwa Elako, Nzambe ayebisi ye ’te ameme Ema ya Likita mpe Sanduku ya Bondeko. | |
II M | LinVB | 2:5 | Ntango akomi kuna, Yeremia amoni mobenga, akotisi Ema na mpe Sanduku ya Bondeko kuna, akotisi mpe altare ya malasi, na nsima akangisi monoko mwa mobenga. | |
II M | LinVB | 2:6 | Baninga ba ye basusu bazongi wana mpo ya kotia bilembo bikolakisa nzela, kasi babungi esika ena. | |
II M | LinVB | 2:7 | Yeremia ayoki yango, apaleli bango : « Esika eye ekoki koyebana te tee mokolo Mokonzi akosangisa bato ba ye mpe akoyokela bango ngolu. | |
II M | LinVB | 2:8 | O ntango ena Mokonzi akolakisa yango, mpe nkembo ya ye ekomonono o limpata, lokola emononoki o eleko ya Moze, mpe o ntango Salomo asambelaki mpo ’te Nzambe abenisa Tempelo na nkembo enene. » | |
II M | LinVB | 2:9 | Ekomami mpe ’te Salomo, na bwanya bwa ye, abonzi libonza mpo ya kobenisa Tempelo ntango asilisi kotonga yango. | |
II M | LinVB | 2:10 | Se lokola o ntango Moze asambelaki Mokonzi mpe móto ut’o likolo motumbi libonza, Salomo asambeli mpe móto mouti ut’o likolo motumbi mabonza. | |
II M | LinVB | 2:11 | Moze alobaki : « Libonza tobonzi mpo ya masumu litumbami mobimba, mpo moto moko alei lyango te. » | |
II M | LinVB | 2:13 | Maye manso makomami o buku. Likambo lisusu likomami o buku ya Bikela bya Neemia, lyango liye : Neemia atongi ndako ya minkanda, asangisi minkanda minso mya bakonzi, mya baprofeta mpe mya Davidi, na mpe mibeko bakonzi babimisaki mitali mabonza. | |
II M | LinVB | 2:14 | Se bongo Yudas asangisi buku inso ipanzemaki ntango ya etumba ; yango inso izali na biso sikawa. | |
II M | LinVB | 2:16 | Awa tolingi tosepela eyenga ya Bopetoli Tempelo, totindeli bino monkanda moye. Malamu bino bosepela eyenga eye elongo na biso. | |
II M | LinVB | 2:17 | Nzambe abikisi bato ba ye, akabeli bango bato ba ekolo ya ye bokonzi, bonsomi, bonganga na bosantisi, | |
II M | LinVB | 2:18 | lokola alakelaki o buku ya Mobeko. Tokolikya ’te akoyokela biso ngolu noki, mpe akosangisa biso o ekolo ya ye esantu ut’o bikolo binso bya nse, zambi abikisi biso o mpasi enene, mpe apetoli Tempelo. | |
II M | LinVB | 2:19 | Lisolo lya bikela bya Yudas Makabe na bandeko ba ye, lya bopetoli Tempelo mpe lya bobenisi altare, | |
II M | LinVB | 2:21 | ndenge Nzambe amilakisi, na bokasi bwa ye, na bato ba mpiko baye babundaki na motema moko mpo ya kobatela mambi ma ba-Yuda, mpo ata bazalaki mingi te babotoli ekolo lisusu mpe babengani basoda ba basenzi, | |
II M | LinVB | 2:22 | babotoli lisusu Tempelo eye eyebani o nse mobimba, babikisi mboka mpe bazongisi mibeko miye bato balingaki koboya, na lisalisi lya Mokonzi nta bolamu : | |
II M | LinVB | 2:23 | mana manso makomami o buku itano na maboko ma Yason na Sirene ; tokomeka kokoma mango na bokuse o buku se yoko. | |
II M | LinVB | 2:24 | Tokanisi ’te baye balingi koyeba makambo ma kala, ata makambo make, bakozala na kwokoso na botangi mitango miike, mpo makambo maleki mingi. | |
II M | LinVB | 2:25 | Yango wana tolingi kosepelisa baye bazali na mposa ya kotanga mango se botangi ; kasi tolingi mpe kokutola mpasi ya baye balingi koyekola mango malamu. Bongo maye makomami masepelisa bato banso. | |
II M | LinVB | 2:26 | Kokoma maye manso na bokuse ezangaki mpasi te ; ezalaki mosala monene, solo. Totokaki mingi, mpe tolalaki mpongi mingi te, | |
II M | LinVB | 2:27 | se lokola mpasi molambi wa limpati akoyoka soko alingi kosepelisa bato banso bakobyangema o limpati. Biso mpe tondimi mokumba moye mpo ya kosalisa bato baike. | |
II M | LinVB | 2:28 | Totikeli mokomi wa bikela bya ekolo mosala mwa kosolola likambo lyoko lyoko ; biso tokomeka se kosolola makambo manso na bokuse. | |
II M | LinVB | 2:29 | Ezali se lokola moto alingi kotonga ndako, asengeli kotala makambo manso ma ndako ; kasi moto oyo bapesi ye mosala mwa kopakola mokobo, asengeli se koluka biloko biye na langi eye ekoki kokembisa ndako. Mosala mwa ngai mozali se bongo. | |
II M | LinVB | 2:30 | Kotuna mituna ebele mpe komeka koyeba ntina ya makambo manso, ezali mosala mwa mokomi wa bikela bya ekolo ; | |
II M | LinVB | 2:31 | kasi moto alingi kosangisa manso o lisolo lyoko, akoki kokoma mango na bokuse, ata asololi makambo make manso te. | |
Chapter 3
II M | LinVB | 3:1 | Bato banso bafandi o engumba esantu na boboto mpenza, bazalaki kotosa mibeko na motema moko, zambi nganga mokonzi azalaki komemya Nzambe mingi mpe koyina bobe. | |
II M | LinVB | 3:2 | Mbala esusu bakonzi ba bikolo bisusu bazalaki kokumisa Esika esantu mpe kopesa Tempelo lokumu lonene na makabo ma bango. | |
II M | LinVB | 3:3 | Seleko, mokonzi wa Azia, azalaki kofuta na mosolo mwa ye moko maye masengeli na mosala mwa mabonza. | |
II M | LinVB | 3:4 | Kasi moto moko, nkombo ’te Simoni, wa libota lya Bilga, azwi mosala mwa botali mosolo mwa sanduku ya Tempelo, azalaki koyokana te na nganga mokonzi Onias mpo ya likambo lya bakengeli ba zando. | |
II M | LinVB | 3:5 | Awa alongi likambo na Onias te, akei koyebisa Apolonio, mwana wa Tubi, moyangeli wa Sele-Siria na Fenisia o eleko ena. | |
II M | LinVB | 3:6 | Ayebisi ye ’te sanduku ya mosolo o Yeruzalem etondi na mosolo mpe na biloko bya nkita bileki mosika maye masengeli na mabonza. Bongo bakoki kopesa mokonzi monene nkita eye. | |
II M | LinVB | 3:7 | Mokolo Apolonio akutani na mokonzi, ayebisi ye likambo lya nkita yango lokola balobaki na ye. Mokonzi aponi Eliodoro, moyangeli wa makambo manene ma ekolo, atindi ye akende kokamata nkita ina inso. | |
II M | LinVB | 3:8 | Eliodoro azili te, akosi ’te akokende kotala mboka ya Sele-Siria na Fenisia, kasi akei se kosala maye mokonzi atindaki ye. | |
II M | LinVB | 3:9 | Ekomi ye o Yeruzalem, nganga mokonzi na bato banso bayambi ye na boboto ; ayebisi bango likambo ayokaki mpe ntina nini ayei. Atuni bango soko maye ayokaki mazalaki ma solo. | |
II M | LinVB | 3:10 | Nganga mokonzi ayebisi ye ’te bazalaki kobomba mosolo mwa basi bakufeli babali mpe mwa bana bitike o sanduku ya Tempelo. | |
II M | LinVB | 3:11 | Ndambo esusu ezalaki ya Irkano, mwana wa Tobia, nkumu moko wa ekolo. Maye Simoni, moto oyo aboya Nzambe, alobaki mazali ma lokuta, mpo mosolo o sanduku mokoki se na talenta nkama inei ya palata, mpe talenta nkama ibale ya wolo. | |
II M | LinVB | 3:12 | Bakoki mpe kobotolo bato mosolo mona te, awa batii mitema ’te mosolo mokoki kobunga o esika esantu te ; moto moko akoki kokamata mwango te o Tempelo eye bato ba nse mobimba bazalaki kokumisa. | |
II M | LinVB | 3:13 | Kasi mpo ya etinda ya mokonzi, Eliodoro ayebisi ’te balongola mosolo moye mpo ya kotia mwango o sanduku ya mokonzi. | |
II M | LinVB | 3:14 | O mokolo moye atiaki, ayingeli o Tempelo mpo ya kotanga nkita iye. Bato banso bakomi kobanga mingi. | |
II M | LinVB | 3:15 | Banganga Nzambe, na bilamba bya ndako esantu, bakumbami o boso bwa altare ya mabonza, babondeli Nzambe oyo apesaki mibeko mitali mosolo mwa Tempelo ’te abatela mosolo moye bato bayaki kobomba mwango wana. | |
II M | LinVB | 3:16 | Elongi ya nganga mokonzi ekomi mpembe mpenza : ezalaki kolakisa ’te azalaki koyoka nsomo o motema. | |
II M | LinVB | 3:17 | Azalaki kobanga mpe kolenge nzoto mobimba, bato banso bamoni ’te azalaki koyoka motema mpasi. | |
II M | LinVB | 3:18 | Bato baike babimi o ndako ya bango, mpe elongo na baninga babondeli o miso ma bato banso ’te basantola Tempelo te. | |
II M | LinVB | 3:19 | Basi baye bakangi ngoto o bontolo, batondi o balabala. Bilenge basi baye bakobimaka o ndako te, bakimi epai ya bizibeli na bifelo bya Tempelo, basusu bazalaki kotalaut’omaninisa, | |
II M | LinVB | 3:21 | Soko otali nkaka ya bato bakumbami o nse, mpe ndenge nganga mokonzi azalaki kobanga, oyoki mawa. | |
II M | LinVB | 3:22 | Ntango bato bazalaki kobondela Mokonzi wa bokasi bonso mpo ’te biloko bilongwa te mpe bitikala bya bato babombaki byango wana, | |
II M | LinVB | 3:24 | Ekomi Eliodoro na bakengeli ba ye penepene na sanduku ya mosolo, Mokonzi wa bokasi bonso mpe wa bilimo binso amilakisi na nguya enene ; baye banso babangaki te kokoto wana batikali nye : makasi na mpiko masileli bango. | |
II M | LinVB | 3:25 | Farasa yoko ebimeli bango, eye moto moko wa nsomo atambwisi ; farasa elati elamba ya etumba, ekei epai ya Eliodoro mpe etuti ye na bibende bya makolo ma liboso. Motambwisi farasa alati bilamba bya etumba bya wolo. | |
II M | LinVB | 3:26 | Banzenga basusu babale bayei, bato makasi, bazalaki kongenge, balati kitoko mpenza. Epai na epai babelemi na Eliodoro mpe babeti ye fimbo ; babeti ye makofi, manokeli ye lokola mbula ya mabanga. | |
II M | LinVB | 3:27 | Eliodoro akwei o nse, molili makasi mozingi ye. Bato bayei kotombola ye mpe bafandisi ye o tipoi. | |
II M | LinVB | 3:28 | Moto oyo akotoki na bakengeli mpe na basoda baike o ndako ya mosolo, akoki komisalisa lisusu te. Bato baye bandimaki ’te Nzambe aleki bokasi bakei kotika ye. | |
II M | LinVB | 3:29 | Moto oyo Nzambe wa bokasi akweisi, alali o nse, akoki koloba lisusu te, azalaki mpe na elikya ya kobika lisusu te. | |
II M | LinVB | 3:30 | Ba-Yuda batondi Nzambe mpo apesi lokumu na Tempelo ya ye. Bato bayokaki nsomo mpe bazalaki mitema likolo mwa liboso, bakomi kotondo na esengo mpe na nsai mpo Mokonzi wa bokasi bonso amilakisaki. | |
II M | LinVB | 3:31 | Baninga basusu ba Eliodoro babondeli Onias ’te asambela Nzambe wa nta-likolo mpo ’te oyo alali o nse mpe alingi kokata motema, abika. | |
II M | LinVB | 3:32 | Nganga mokonzi abonzeli Nzambe libonza mpo ’te azongisela ye bomoi, mpo babangi ’te mokonzi wa ekolo akokanisa ’te ba-Yuda bato bamekaki koboma Eliodoro. | |
II M | LinVB | 3:33 | O ntango nganga mokonzi abonzi libonza lya boyokani, banzenga babale babimeli Eliodoro lisusu, balati se lokola liboso, batelemi mpe balobi na ye : « Osengeli kotondo nganga mokonzi Onias mbala nkoto, zambi Mokonzi abikisi yo mpo ya losambo la ye. | |
II M | LinVB | 3:34 | Mpe awa ozwi etumbu euti o likolo, osakola o miso ma bato banso bokasi bonene bwa Nzambe. » Esilisi bango koloba bongo, balimwi. | |
II M | LinVB | 3:35 | Eliodoro abonzeli Nzambe libonza mpe alakeli ye elako enene, mpo abikisi ye. Atiki Onias na boboto mpe na basoda ba ye azongi epai ya mokonzi wa ekolo. | |
II M | LinVB | 3:38 | « Soko ozali na monguna to na moto alingi kotomboko na leta, tinda ye kuna. Akozongela yo awa bobele mpota mpota mpo ya fimbo, soko akokufa kuna te, mpo nguya ya Nzambe ezali wana. | |
II M | LinVB | 3:39 | Mokonzi wa likolo akokengeleke mpe akobatelaka esika ena. Moto nyonso akokende kuna na mayele mabe, Nzambe akopesa ye etumbu mpe akoboma ye. » | |
Chapter 4
II M | LinVB | 4:1 | Simoni, oyo afundaki likambo lya mosolo mwa Tempelo, akomi mobebisi wa ekolo. Abandi kotongo Onias na bolobi ’te ye moto amekeki koboma Eliodoro, mpe azalaki ntina ya mabe masalemi wana. | |
II M | LinVB | 4:2 | Abangi te koloba ’te Onias azalaki monguna wa leta, nzokande Onias azalaki kosala bato banso se malamu, azalaki kobatela bato ba ekolo ya ye mpe kotosa Mobeko. | |
II M | LinVB | 4:4 | Onias amoni likama lya bowelani boye, mpe ndenge Apolonio, mwana wa Menesteo, moyangeli wa Sele-Siria na Fenisia, azalaki kolendisa Simoni o mabe akani kosala. | |
II M | LinVB | 4:5 | Yango wana akei kotala mokonzi, mpo ya kofunda bato ba ekolo ya ye te, kasi mpo apangani na bolamu bwa ekolo mpe bwa bato banso. | |
II M | LinVB | 4:6 | Ayebi ’te soko mokonzi atali likambo lina te, boboto bokozala lisusu te, Simoni akotika mpe bozoba bwa ye te. | |
II M | LinVB | 4:7 | Ntango Seleko wa 4 awei, Antioko Epifane akitani ye. Yason, ndeko wa Onias, akomi nganga mokonzi na mayele mabe. | |
II M | LinVB | 4:8 | Mokolo akutani na mokonzi, alakeli ye talenta ya palata nkama isato na ntuku motoba, mpe talenta ntuku mwambe ya mosolo mokozwama bo mpako ya biloko bisusu. | |
II M | LinVB | 4:9 | Alakeli mokonzi mpe na monkanda talenta monkama na ntuku itano soko mokonzi alingisi ye kotonga kelasi ya bilenge mpe libanda lya masano, apesa mpe bato ba Yeruzalem nkombo ‘ba-Antioko’. | |
II M | LinVB | 4:10 | Mokonzi andimi. Banda mokolo akomi na bokonzi, Yason asali makasi mpo ’te bato banso balanda mimeseno mya ba-Greki. | |
II M | LinVB | 4:11 | Alongoli matomba maye bakonzi balingisaki ba-Yuda mpo ya bolamu bwa bango o eleko ya Yoane, tata wa Epoleme. Epoleme moto azalaki moko wa bantoma baye bakendeki o Roma kokata bondeko na ba-Roma. Yason alongoli mibeko mya kala mpe abimisi mimeseno mya sika mikoki na Mobeko mwa ba-Yuda te. | |
II M | LinVB | 4:12 | Atongi ndako ya masano se pene na Tempelo. Ye moko azalaki kokotisa wana bilenge mpo bayekola masano. | |
II M | LinVB | 4:13 | Ye moto wa ezalela ebe eye ekoki na nganga Nzambe soki moke te, alandi ezaleli ya ba-Greki ; bongo bato banso bakomi kondima mimeseno mya bauta. | |
II M | LinVB | 4:14 | Banganga Nzambe bazalaki kosala mosala mwa altare na motema moko lisusu te. Bakei o Tempelo lisusu te, mpe batiki kobonza mabonza, kasi soko ngonga ekoki bakei mbangu kolanda masano maye mapekisami na Mobeko. | |
II M | LinVB | 4:15 | Bazalaki kokanisa lokumu la ekolo ya bango lisusu te, kasi bazalaki kowela se maye ba-Greki bazalaki kokumisa. | |
II M | LinVB | 4:16 | Na makambo maye bakomi komilukela kwokoso, mpo bobele baye baluki kolanda ezaleli ya ba-Greki mpe kokokana na bango o makambo manso, bakokoma bango moko banguna mpe banyokoli ba bango. | |
II M | LinVB | 4:17 | Maye masalemi o eleko ena malakisi polele ’te moto abuki mibeko mya Nzambe, akokima etumbu te. | |
II M | LinVB | 4:18 | O Tiro bazalaki kosepela masano manene, maye bakosalaka nsima ya mbula inei. Mokonzi azalaki mpe wana. | |
II M | LinVB | 4:19 | Moto mabe Yason aponi bantoma o kati ya ‘ba-Antioko’, atindi bango na dragma nkama isato ya palata, bapesa nzambe wa bango Erakles yango bo libonza. Kasi baye bayei na yango, baboyi kobonza yango, basengi ’te babimisa mwango na ntina esusu. | |
II M | LinVB | 4:20 | Bongo mosolo moye bapesaki mpo ’te babonzela Erakles, bato bakei babimisi mwango mpo ya mosala mwa botongi masuwa. | |
II M | LinVB | 4:21 | Antioko atindaki Apolonio, mwana wa Menesteo, o Ezipeti o eyenga ya libala lya mokonzi Filometor. Apolonio ayebisi ye ’te Filometor akomi monguna wa bokonzi bwa ye. Bongo Antioko aluki komibatela ; yango wana aleki o Yope mpe akei o Yeruzalem. | |
II M | LinVB | 4:22 | Yason ayambi ye na lokumu lonene. Batambwisi ye o kati ya milongo mya miinda mpe ya bato babeteli ye maboko. Nsima ya yango akei na basoda ba ye o Fenisia. | |
II M | LinVB | 4:23 | Nsima ya mibu misato Yason atindi Menelas, ndeko wa Simoni oyo natangaki awa, akende kotika mosolo mwa bokonzi mpe kobongisa mwa makambo masengeli kosalema noki. | |
II M | LinVB | 4:24 | Menelas asengi ’te akoma epai ya mokonzi, akutani na ye na milulu mya nkumu monene. Abakisi talenta nkama isato likolo lya mosolo moye Yason alakelaki mokonzi ; bongo abotoli Yason bokonzi bwa bonganga na bofuti mosolo. | |
II M | LinVB | 4:25 | Azongi na minkanda miye mipesi ye bokonzi bwa bonganga Nzambe, nzokande azangi lokumu lokoki na nganga mokonzi : azalaki na motema mwa monyokoli mpenza mpe na nkanda enene lokola nyama ya zamba. | |
II M | LinVB | 4:26 | Bongo Yason, oyo abotoloki ndeko wa ye bokonzi, ye mpe alongwi sikawa o bokonzi bona ; akimi mpe akei o mokili mwa ba-Amon. | |
II M | LinVB | 4:28 | Sostrate, komanda wa ebombamelo ya Yeruzalem, oyo asengelaki kofutisa bato mpako, apaleli ye. Yango wana mokonzi abengi bango babale. | |
II M | LinVB | 4:29 | Menelas atiki ndeko wa ye Lisimako asala mosala mwa nganga mokonzi o nkombo ya ye. Sostrate atiki Krates, mokonzi wa basoda ba Sipro, o esika ya ye. | |
II M | LinVB | 4:30 | Se o ntango ena bato ba Tarso na Malos batomboki, zambi mokonzi apesaki Antiokis, makango wa ye, mboka ya bango. | |
II M | LinVB | 4:31 | Mokonzi akei kobongisa yango noki ; atiki Androniko, nkumu moko monene, o esika ya ye. | |
II M | LinVB | 4:32 | Menelas akanisi ’te makambo mabongeli ye ; ayibi mbeki ya wolo o Tempelo, akabeli Androniko ; ateki mbeki isusu o Tiro mpe o bingumba bisusu bya penepene. | |
II M | LinVB | 4:33 | Onias ayoki yango, akei kofanda o Dafne, penepene na Antiokia, o esika ya kimia, mpe apaleli Menelas. | |
II M | LinVB | 4:34 | Kasi Menelas akei koyokana na Androniko ; asengi ye ’te aboma Onias. Androniko akei kozwana na Onias, atandeli ye loboko la mobali mpe alayeli ’te akoki kosala ye mabe te. Ata atiaki ntembe, Onias andimi kobima o esika abombami. Bobele o ntango Onias abimi, Androniko abomisi ye, asambisi ata ye te. | |
II M | LinVB | 4:35 | Ba-Yuda na bato ba bikolo bisusu mingi basiliki mpe bayoki mabe mpo ya ndenge abomisi moto oyo. | |
II M | LinVB | 4:36 | Esilisi mokonzi mobembo mwa ye o Silisia, ba-Yuda ba Antiokia mpe ba-Greki baye bakoyinaka bobe bakei epai ya ye mpo ya ndenge babomaki Onias ntina te. | |
II M | LinVB | 4:37 | Antioko ayoki mawa manene ; na mai o miso akanisi mowei, moto wa bwanya mpe wa bosembo. | |
II M | LinVB | 4:38 | Akomi na nkanda enene, alongoli Androniko bilamba bya lokumu, mpe apasoli byango. Nsima atambwisi ye o engumba mobimba, mpe abomisi ye bobele o esika eye abomaki Onias. Bongo Nzambe apesi ye etumbu ekoki na ye solo. | |
II M | LinVB | 4:39 | Nzokande Lisimako azalaki koyiba biloko bya ndako esantu. Menelas andimi yango. Nsango ena epalangani o engumba, mpe bato batombokeli Lisimako mpo biloko bya wolo bisili kokende mingi. | |
II M | LinVB | 4:40 | Lisimako amoni ’te bato batoki na nkanda, asangisi basoda nkoto isato mpe abandi etumba. Mokambi wa bango Aurano, asili akomi mokóló mpenza, kasi akoli na bozoba. | |
II M | LinVB | 4:41 | Awa bato bamoni ’te Lisimako abimisi etumba, basusu bakamati mabanga, basusu mangenda, basusu bakamati na maboko mputulu ya makala ezalaki wana, mpe babwakeli bato ba Lisimako biloko bina mobulu mobulu. | |
II M | LinVB | 4:42 | Bazokisi bato baike, basusu mpe bakufi. Bakimisi basusu mpe babomi moto ayibi biloko bya Tempelo penepene na ndako ya mosolo mwa Tempelo. | |
II M | LinVB | 4:44 | Mokonzi ayei o Tiro. Bankumu ba ba-Yuda batindi bato basato basambisa Menelas o miso ma ye. | |
II M | LinVB | 4:45 | Emoni Menelas ’te akokita o likambo, alakeli Tolemeo, mwana wa Dorimeno, mosolo mingi soko akoki kobongola makanisi ma mokonzi. | |
II M | LinVB | 4:46 | Tolemeo afandisi mokonzi o mbalasani mpo apema moke ; azwi nzela ya kobongola makanisi ma ye. | |
II M | LinVB | 4:47 | Alongisi Menelas, moto asali mabe mingi, mpe akitisi bato balamu o liwa. Soko basambaki ata o miso ma ba-Skite, ntembe te, mbele balongaki. | |
II M | LinVB | 4:48 | Bongo bato baye babatelaki engumba, bato mpe biloko bisantu, bazwi etumbu ; babomi bango se o mokolo mona. | |
II M | LinVB | 4:49 | Bato ba Tiro bayoki mabe mpo ya likambo lyango, mpe bakundi nzoto ya bawei na lokumu lonene. | |
Chapter 5
II M | LinVB | 5:2 | O ntango ena bazalaki komono o engumba mobimba, mikolo ntuku inei, batambwisi farasa o likolo. Balati bilamba bikembami na nsinga ya wolo. Bazalaki koleka milongo milongo, lokola limpinga lya basoda. | |
II M | LinVB | 5:3 | Batongi milongo epai na epai mpo babundisana, na nguba izalaki koningana, mpe na makongo ebele. Basili babendi mimpanga, makula mazalaki koleka o likolo ; batambwisi bazalaki na bibuneli mpe na milato ndenge na ndenge bizalaki kongenge. | |
II M | LinVB | 5:5 | O mikolo mina nsango ya lokuta etamboli ’te Antioko akufi. Yason akanisi ’te ezalaki ya solo. Asangisi basoda nkoto yoko mpe akei kobundisa engumba na mbalakaka. Etumba ebandi o bifelo bya engumba, kasi babotoli engumba, mpe Menelas asengeli kobombama o ebombamelo. | |
II M | LinVB | 5:6 | Yason abomi bato ebele ba ekolo ya ye moko, mawa te. Abosani ’te moto alongi bandeko ba ye, akomikweisa mpenza. Asali na bato ba ye lokola alingaki kolonga banguna seko. | |
II M | LinVB | 5:7 | Nzokande akoki kokamata bokonzi te : manso asali masukeli ye mabe, mpe asengeli lisusu kobombama o mokili mwa ba-Amon. | |
II M | LinVB | 5:8 | Asuki mpe bongo na makambo mabe ma ye : bafundi ye epai ya Aretas, mokonzi wa ba-Arabu. O mboka yoko yoko akimi, asengeli mpe kokima lisusu ; bato banso bazalaki kobengana ye. Bayini ye mpo aboyi mibeko mya ekolo, mpe bakinoli ye mpo abomi bandeko na bato ba ekolo ya ye ; akei o Ezipeti. | |
II M | LinVB | 5:9 | Akimi tee o Lasedemonia ; akanisaki ’te akobika kuna mpo bankoko ba ye. Bongo moto akimisaki bato baike o ekolo ya bango, akei kokufa o mokili mosusu. | |
II M | LinVB | 5:10 | Oyo alalisaki bibembe biike bizwi ata malita te, bakundi ye o esika ya bankoko ba ye te : ata moto moko te aleli ye, to apesi ye lokumu la nsuka. | |
II M | LinVB | 5:11 | Eyoki Antioko nsango ena, akanisi ’te o Yudea bato batomboki lisusu. Angali na nkanda lokola nyama ya zamba. Atiki Ezipeti, akei na basoda kobotolo Yeruzalem. | |
II M | LinVB | 5:12 | Atindi bango ’te baboma bato banso bakokuta bango o balabala, bayokela bango mawa te ; bakata nkingo ya baye babombami o ndako ya bango. | |
II M | LinVB | 5:13 | Bongo babomi bilenge na babange, basilisi basi na bana, bakati bilenge basi na bana bake nkingo. | |
II M | LinVB | 5:14 | Bobele o mikolo misato bato nkoto ntuku mwambe babungami. Bato nkoto ntuku inei bakufi, basusu nkoto ntuku inei batekemi bo baombo. | |
II M | LinVB | 5:15 | Lokola ekoki bongo naino te, mokonzi abangi te koyingela o Tempelo, eye eleki Tempelo inso ya mokili na bosantu. Menelas, mosuli wa mibeko mpe wa ekolo, akambi ye kuna. | |
II M | LinVB | 5:16 | Na maboko mbindo ma ye asimbi mbeki isantu, mpe ayibi biloko biye bakonzi basusu batikaki kuna bo libonza mpo ya kokembisa mpe kokumisa esika eye esantu. | |
II M | LinVB | 5:17 | Antioko amikumisi na yango ; ayebi te ’te Nzambe asiliki mwa mikolo mpo ya masumu ma bato ba engumba ; emononi ’te apangani na Tempelo lisusu te. | |
II M | LinVB | 5:18 | Soko bazalaki na masumu ebele boye te, mbele babeteki Antioko fimbo se o mokolo ayaki, lokola esalemaki na Eliodoro, oyo atindamaki na mokonzi Seleko mpo atala mosolo mwa ndako ya Nzambe. Mbele ye Antioko atikaki mpe mokano mwa lofundo. | |
II M | LinVB | 5:19 | Nzokande Mokonzi aponi bato te mpo ya esika esantu, kasi aponi esika esantu mpo ya bato. | |
II M | LinVB | 5:20 | Yango wana makambo makweli bato makweli mpe Tempelo, se lokola na nsima ezwi bolamu elongo na bango. Nzambe wa bokasi bonso abosani yango mwa mikolo mpo ya nkanda. Kasi awa Mokonzi monene azongeli bato na bondeko, ezwi lisusu lokumu lokola kala. | |
II M | LinVB | 5:21 | Antioko alongoli talenta nkoto yoko na nkama mwambe o Tempelo, na nsima akei noki o Antioko. Na lolendo la ye akanisi ’te akoki kofungolela masuwa nzela ya mokili, na mpe nzela ya mai mpo ya botamboli na makolo. | |
II M | LinVB | 5:22 | Awa akei, atiki bayangeli mpo ya konyokolo bato ba ekolo. O Yeruzalem atiki Filipo, moto wa Frizia, aleki mokonzi wa ye na makambo makasi makasi. | |
II M | LinVB | 5:23 | O ngomba Garizim atiki Androniko mpe Menelas, oyo aleki baninga ba ye na bobe ; azalaki koyina ba-Yuda boyini. | |
II M | LinVB | 5:24 | Mokonzi atindi Apolonio, komanda na basoda nkoto ntuku ibale na ibale na motindo ’te baboma babali baye bazalaki makasi, mpe bateke basi na bana. | |
II M | LinVB | 5:25 | Ekomi ye o Yeruzalem, akosi ’te ayei na boboto. Kasi ekomi mokolo mwa Sabato, mokolo moye ba-Yuda bakopemaka, abengi basoda banso. | |
II M | LinVB | 5:26 | Abomi bato banso bayei kotala ; na nsima akatisi na basoda engumba, mpe abomi bato ebele. | |
Chapter 6
II M | LinVB | 6:1 | Nsima ya mwa mikolo, mokonzi atindi Geronte, moto wa Atene, akende kondimisa ba-Yuda batika mibeko mya bankoko, batosa mibeko mya Nzambe lisusu te. | |
II M | LinVB | 6:2 | Batindi ye asantola Tempelo ya Yeruzalem, akomisa yango tempelo ya Zeus wa Olimpos. Akomisa mpe tempelo eye ya ngomba Garizim tempelo ya Zeus Kenio, lokola bato bafandi wana basengi. | |
II M | LinVB | 6:3 | Mabe mayei se kobakisama na mabe ma liboso mayokisi bato banso mpasi mpenza, bayoki mango mabe. | |
II M | LinVB | 6:4 | Tempelo etondi na makambo ma bosoni mpe ma bosoto ma bapagano. Bazalaki koya wana mpo bakutana na bandumba, mpe balala na basi o lopango la Tempelo mpenza. Bazalaki mpe koya wana na biloko bipekisami. | |
II M | LinVB | 6:6 | Bapekisi kopema o mokolo mwa Sabato, mpe kosepela biyenga bya bankoko. Ata nkombo ya mo-Yuda etangema lisusu te. | |
II M | LinVB | 6:7 | Sanza na sanza, o mokolo bakokanisaka mbotama ya mokonzi, bato banso batindami na makasi kozala o limpati lya mabonza. O mikolo mya eyenga ya Dionisio, bato banso balata enkoti ya nkasa ya nzete, mpe batonga molongo mpo ya kokumisa Dionisio. | |
II M | LinVB | 6:8 | Tolemeo abimisi etinda ’te o bingumba bya ba-Greki bya penepene batinda ba-Yuda basala se bongo : ba-Yuda basangana na bango o limpati lya mabonza. | |
II M | LinVB | 6:9 | Baye baboyi kolanda mimeseno mya ba-Greki, bakata bango nkingo. Mibeko mina minso milakisi ’te makambo ma mpasi enene malingi makwela ba-Yuda. | |
II M | LinVB | 6:10 | Mokolo moko bakambi basi babale epai ya bazuzi, zambi bakatisi bana ba bango. Bakangisi bana o mabéle, batambwisi bango bongo o engumba ; na nsima babwaki bango o nse ut’o efelo ya engumba. | |
II M | LinVB | 6:11 | Basusu bakendeki kobombama elongo o mabulu ma ngomba mpo ya kosambela na bonkutu o mokolo mwa Sabato. Bafundi bango epai ya Filipo. Batumbi bango banso. Bango baluki komibikisa te, zambi balingi komemya mokolo mwa Sabato. | |
II M | LinVB | 6:12 | Nasengi bato bakotanga buku eye ’te bayoka mabe te na makambo maye ma mpasi. Bandima ’te minyoko miye mizalaki se na ntina ya kobongisa ekolo ya biso, mikoki kobebisa ekolo ya biso te. | |
II M | LinVB | 6:13 | Soko Nzambe atiki basumuki mikolo mingi te, kasi etumbu ekweli bango noki, elakisi ’te Nzambe alingi bango. | |
II M | LinVB | 6:14 | Soko Nzambe aumisi etumbu eye akopesa bato ba bikolo bisusu tee masumu ma bango maleki mingi. Mokonzi akosalaka biso bongo te. | |
II M | LinVB | 6:16 | Nzambe akopimaka biso ngolu ya ye te. Soko atumboli ekolo ya ye na makambo ma mpasi, elakisi ’te akotikaka biso te. | |
II M | LinVB | 6:18 | Eleazar, moko wa bankumu wa bateyi ba Mobeko, asili akomi mobange ; ye moto wa lokumu solo. Bafungoli ye monoko na makasi mpo ’te alia ngulu. | |
II M | LinVB | 6:19 | Ye alingi kotikala na bomoi bwa nsoni te, kasi aponi liwa lya nkembo : akei na mpiko o esika bakonyokolo ye. | |
II M | LinVB | 6:20 | Yango wana asanzi bilei baleisi ye ; apesi bato banso bongo ndakisa eye basengeli kolanda, baboya eye epekisami, baluka kotikala na bomoi te na bolei bilei bya ekila. | |
II M | LinVB | 6:21 | Bato bayangeli limpati liye lya nsomo babendi ye epai ; bayebani ut’o kala. Balobi na ye : « Tokoyela yo nyama epekisami te, ata yo moko okoki kolamba yango ; okosa bongo baninga ’te olei nyama ya mabonza lokola mokonzi atindi. | |
II M | LinVB | 6:23 | Kasi Eleazar akani mokano mokoki na mobange wa lokumu lokola ye. Ye moto wa nsuki mpembe mpo ya misala miike asalaki, moto wa ezalela esantu uta bomwana, akani kotosa maye mobeko mosantu mouti na Nzambe motindi. Yango wana azongiseli bango : « Eleki malamu ’te baboma ngai noki ! » | |
II M | LinVB | 6:24 | Abakisi : « Ngai mobange nakoki kokosa bato te. Mbele bilenge baike bakoki kokanisa ’te Eleazar, mobange oyo akokisi mibu ntuku libwa, andimi kosala lokola bapagano. | |
II M | LinVB | 6:25 | Mbele bakobunga nzela mpo ya bokosi bwa ngai, mpo natikala naino mwa mikolo na bomoi. Nakoki koyokisa lokumu la ngai mobange nsoni te. | |
II M | LinVB | 6:26 | Soko sikawa nakimi etumbu ya bato, názala na bomoi to nákufa, nakokima nde etumbu ya Nzambe wa bokasi bonso ? | |
II M | LinVB | 6:28 | mpe nakopesa bilenge banso ndakisa enzenga. Ngai moko nalingi liwa mpo ’te nakumisa mibeko misantu. » Elobi ye maloba mana, akei o esika bakoboma ye. | |
II M | LinVB | 6:29 | Baye balakisaki ye liboso motema malamu, bakambi ye kuna mpe bakomi koyina ye mpo ya maloba alobaki ; batali maloba mana lokola nsuka ya bozoba. | |
II M | LinVB | 6:30 | Babeti ye fimbo. Elingi ye kokata motema, Eleazar asambeli boye : « Mokonzi ayebi manso, ayebi ’te nakokaki kokima liwa. Soko nazali koyoka mpasi mpenza o nzoto ya ngai mpo ya bobeti fimbo, nayoki esengo o motema zambi nakobanga se ye. » | |
Chapter 7
II M | LinVB | 7:1 | Bakangaki mpe bandeko babali nsambo elongo na mama wa bango. Mokonzi wa ekolo abetisi bango fimbo. Fimbo esusu etongami na nsinga, esusu na misisa mya ngombe. Atindi bango na makasi ’te balia nyama ya ngulu eye Mobeko mokilisi. | |
II M | LinVB | 7:2 | Moko wa bango alobi o nkombo ya bandeko ba ye : « Olingi kotuna biso nini ? Olingi toyebisa yo nini ? Biso tondimi kokufa, tokoki koboya Mobeko mwa bankoko te. » | |
II M | LinVB | 7:4 | Awa nkoni epeli, atindi bato ba ye bakata lolemu la moto alobaki o nkombo ya bandeko ba ye, balongola ye lomposo la motó, bakata mpe nsonge ya binama bya nzoto ya ye, o miso ma bandeko mpe ma mama wa ye. | |
II M | LinVB | 7:5 | Bazokisi ye nzoto mobimba, kasi azalaki kopema naino. Mokonzi atindi babeleme na ye penepene na móto mpe babwaka ye o nzungu. Ntango milinga mibimi o nzungu mizalaki kopanzana mosika, bandeko na mama wa bango bazalaki kolendisana, mpo ’te bakufa na motema mpiko. Balobi : | |
II M | LinVB | 7:6 | « Mokonzi Nzambe azali komono biso. Solo, akoyokela biso ngolu, lokola ekomami o nzembo ya Moze, oyo asakolaki polele : Akoyokela basaleli ba ye ngolu. » | |
II M | LinVB | 7:7 | Awa mwana wa yambo akufi bongo, bayei na mwana wa babale mpo ya konyokolo ye. Balongoli ye lomposo la motó na nsuki. Na nsima batuni ye : « Olingi kolia nyama ya ngulu, bongo totika konyokolo nzoto ya yo eteni na eteni ? » | |
II M | LinVB | 7:9 | Elingi ye kokata motema, alobi : « Yo, nsuka ya banyokoli, okoboma nzoto ya biso lelo, kasi Mokonzi wa likolo na nse akosekwisa biso bato tokokufa mpo ya mibeko mya ye mpo ’te apesa biso bomoi bwa seko. » | |
II M | LinVB | 7:10 | Nsima ya ye banyokoli mwana wa basato. Batindi ye ’te abimisa lolemu. Abimisi, alakisi bango mpe maboko, abangi soki moke te. | |
II M | LinVB | 7:11 | Alobi na mpiko : « Nzambe moto apesi ngai binama biye, kasi mpo ya kotosa mibeko mya ye, nakoki kotika byango, na elikya ’te Nzambe akozongisela ngai byango. » | |
II M | LinVB | 7:12 | Ata mokonzi na bato ba ye bakamwi na mpiko ya mwana oyo, mpo atali mpasi inso se mpamba. | |
II M | LinVB | 7:14 | O ntango alingi akata motema, alobi : « Nabangi kokufa na maboko ma bato te, mpo nazali na elikya ’te Nzambe akosekwisa ngai ; kasi yo okosekwa te. » | |
II M | LinVB | 7:16 | Oyo atali mokonzi swii mpe alobi : « Ata ozali moto asengeli kokufa, okoyangelaka bato, mpe okoki kosala na bango lokola olingi. Kasi okanisa te ’te Nzambe akotika ekolo ya biso. | |
II M | LinVB | 7:18 | Na nsima bayei na mwana wa motoba. Elingi ye kokata motema, alobi : « Omikosa te : tozali koyoka mpasi boye, mpo tosali masumu o miso ma Nzambe wa biso. Yango wana, makambo maye ma kokamwa mazali kosalema. | |
II M | LinVB | 7:20 | Tala ndakisa ya kokamwa ya mama oyo amoni ’te bana ba ye nsambo bakufi se o mokolo moko : moto moko abosana yango te ! Andimi mpasi na motema mpiko, mpo atii motema se na Mokonzi. | |
II M | LinVB | 7:21 | Alendisi moko moko wa bango o lokota la mboka. Na bwanya mpenza alakisi ’te azalaki na mpiko lokola mobali. Motema mwa ye mwa bolingo, mama oyo alendisi mwango na mpiko ya mobali ; alobi na bango : | |
II M | LinVB | 7:22 | « Nayebi te boniboni bosalemaki o libumu lya ngai. Ngai moto nakabelaki bino molimo na mpema ya bomoi te ; ngai nabongisaki binama bya bino te mpo bikoma nzoto yoko. | |
II M | LinVB | 7:23 | Oyo akotindelaka biso bana babotama, azali Mokeli wa biloko binso, mpo azali libandela lya bikelamo binso. Na ngolu ya ye akozongisela bino molimo na mpema ya bomoi, zambi bopangani na bomoi bwa nzoto te, mpo bopusi kolinga Mobeko mwa ye. » | |
II M | LinVB | 7:24 | Antioko akanisi ’te mama oyo azalaki kokinola mpe kofinga ye. Awa mwana wa nsuka azalaki naino na bomoi, abandi koloba na ye maloba ma elengi, na ndai alakeli ye ’te akokoma na nkita mpe na bolamu ; akokomisa ye moninga wa mokonzi, mpe akopesa ye mosala mwa lokumu, soko andimi koboya mibeko mya bankoko ba ye. | |
II M | LinVB | 7:25 | Elenge mobali atali maloba mana mpamba. Bongo mokonzi abengi mama, alobi na ye ’te apesa mwana wa ye malako malamu mpo akufa te. | |
II M | LinVB | 7:26 | Awa mokonzi abondeli ye naino mingi, mama andimi kosolola na mwana mpe kondimisa ye maloba ma mokonzi. | |
II M | LinVB | 7:27 | Bongo agunzami pene na mwana, mpe atioli mokonzi monyokoli, mpo alobi na mwana wa ye o lokota la mboka : « Mwana wa ngai, yokela ngai mawa ! Namemeki yo o libumu sanza libwa, namelisaki yo mabéle mbula isato mpe nabokoli yo tee lelo. | |
II M | LinVB | 7:28 | Nabondeli yo, mwana wa ngai, tala likolo na nse na binso bizali wana. Yeba ’te Nzambe akeli bina binso na eloko te, se bongo akeli mpe biso bato. | |
II M | LinVB | 7:29 | Obanga monyokoli oyo te, mpe ndima liwa na mpiko lokola bandeko ba yo ; bongo nazwa yo lisusu elongo na bandeko ba yo o mokolo Nzambe akoyokela biso ngolu. » | |
II M | LinVB | 7:30 | Esilisi mama koloba bongo, elenge mobali alobi : « Okozila nini ? Nakotosa etinda ya mokonzi te. Nakotosa mitindo mya Mobeko moye Moze apesaki bankoko ba biso. | |
II M | LinVB | 7:31 | Kasi yo moto ozali ntina ya mpasi enene eye ekweli ba-Ebrei, okokima loboko la Nzambe te. | |
II M | LinVB | 7:33 | Ata Mokonzi wa bomoi asilikeli biso mwa mikolo mpo ya kobokolo mpe kobongisa biso, akozongisa bondeko na biso basaleli ba ye. | |
II M | LinVB | 7:34 | Kasi yo, nsuka ya bato baboya Nzambe mpe ya bato babe, otonda na lolendo te, omikosa te na elikya ya mpamba, awa ozali konyokolo basaleli ba Nzambe. | |
II M | LinVB | 7:36 | Bandeko ba biso bayokaki mpasi eumeli te, sikawa bakozwa bomoi bokoumela seko, mpo ya bondeko boye Nzambe akati na biso. Kasi akosambisa yo mpe akopesa yo etumbu mpo ya lolendo la yo. | |
II M | LinVB | 7:37 | Lokola bandeko ba ngai nakokaba bomoi mpe nzoto ya ngai mpo ya botosi mibeko mya bankoko. Nabondeli Nzambe ayokela ekolo ya biso mawa noki, kasi andimisa yo na minyoko mpe na mpasi ’te bobele ye azali Nzambe. | |
II M | LinVB | 7:38 | Nzambe, oyo apesi ekolo ya biso etumbu na ntina, akitisa motema mpo ya mpasi ya ngai mpe ya bandeko ba ngai. » | |
II M | LinVB | 7:39 | Maloba maye mazokisi mokonzi ; atoki na nkanda ; apesi mwana oyo wa nsuka etumbu eleki nsomo leka basusu. | |
Chapter 8
II M | LinVB | 8:1 | Yudas Makabe elongo na baninga ba ye bazalaki kokende kokoto o mboka na bonkutu. Basangisi bandeko ba bango, mpe babengi baye batikali ba-Yuda ba solo, balanda bango. Basangisi bongo bato soki nkoto motoba. | |
II M | LinVB | 8:2 | Babondeli Mokonzi ’te atala bato ba ekolo ya ye, eye bato banso bazali konyata ; mpe ayokela Tempelo ya ye ngolu, mpamba te, bato baboya Nzambe basantoli yango. | |
II M | LinVB | 8:3 | Ayokela engumba enene mawa, mpo banguna babebisi yango mpe balingi koboma yango nye. Akanisa mpe makila mazali kobelela ye, | |
II M | LinVB | 8:4 | akanisa makila ma bana baye bakufi ntina te, mpe andima te ’te bakoba kotuka nkombo ya ye. | |
II M | LinVB | 8:5 | Nkanda ya Nzambe ebongwani ngolu : bapagano bakokoka Yudas Makabe na limpinga lya ye te, liye asili kobongisa. | |
II M | LinVB | 8:6 | Yudas akoteli bingumba mpe mboka na mbalakaka mpe atumbi yango ; abotoli bisika biye bibongeli ye mpo ya kokende koboma banguna baike. | |
II M | LinVB | 8:7 | Mbala mingi asali makambo mana na butu, mpo molili mosalisa ye. Nsango ya mpiko ya ye epalangani bipai binso. | |
II M | LinVB | 8:8 | Awa Filipo amoni ’te Yudas akomi mobuni wa solo oyo alongi bitumba biike, atindeli Tolemeo moyangeli wa Sele-Siria mpe wa Fenisia monkanda mpo ’te aya kobongisela mokonzi wa ekolo makambo maye. | |
II M | LinVB | 8:9 | Tolemeo atindi Nikanor, mwana wa Patroklo, moko wa baninga ba solo ba mokonzi. Apesi ye basoda nkoto ntuku ibale bauti o bikolo bisusu, bakende koboma bato banso o ekolo ya ba-Yuda. Apesi ye moninga moko Gorgias, mokonzi wa basoda, oyo akomi na mayele mingi o bitumba. | |
II M | LinVB | 8:10 | Nikanor azalaki na elikya ’te soko akangi ba-Yuda mpe ateki bango, akozwa talenta nkoto ibale, ikoki na motuya mwa mpako eye mokonzi asengeli kofuta ba-Roma. | |
II M | LinVB | 8:11 | Noki ayebisi bato ba bingumba penepene na mbu ’te baya kosomba baombo ba-Yuda. Alakeli bango ’te akoteke baombo ntuku libwa na talenta yoko. Akanisi soki te ’te Nzambe wa bokasi akopesa ye etumbu mpo ya makambo mana. | |
II M | LinVB | 8:12 | Yudas ayoki ’te Nikanor azalaki koya na basoda. Ntango ayebisi bato ba ye ’te banguna bazalaki koya, | |
II M | LinVB | 8:13 | baye babangi mpe baye bandimi bosembo bwa Nzambe na motema moko te bakimi o bisika bisusu. | |
II M | LinVB | 8:14 | Basusu bateki biloko bizalaki naino na bango, mpe babondeli Nzambe ’te abikisa bango o maboko ma Nikanor, moto oyo aboya Nzambe asili ateki bango bo baombo liboso ’te etumba ebanda. | |
II M | LinVB | 8:15 | Abikisa bango, ata mpo ya bango moko te, kasi mpo ya bondeko akataki na bankoko ba bango, mpe mpo ya nkombo ya ye enene ya nkembo eye apesaki bango. | |
II M | LinVB | 8:16 | Makabe asangisi bato ba ye, bakoki nkoto motoba. Alendisi bango boye : babanga banguna te ; ata bapagano baye ebele bayeli bango etumba na ntina yoko te, babanga bango te, kasi babuna na mpiko. | |
II M | LinVB | 8:17 | Bakanisa ndenge banguna basantoli esika esantu mpenza, ndenge basambwisi bato ba engumba eye babebisi, mpe ndenge babomi mimeseno mya bankoko. | |
II M | LinVB | 8:18 | Abakisi : « Banguna bakotiaka mitema na bibuneli mpe na mpiko ya bango. Biso tokotiaka mitema se na Nzambe wa bokasi bonso. Ye akoki kokweisa na mbala yoko bato banso bayeli biso etumba, ata bato ba nse mobimba. » | |
II M | LinVB | 8:19 | Atangeli bango ndenge Nzambe abatelaki bankoko ba bango, lokola bato nkoto monkama na ntuku mwambe na itano bakufaki o ntango ya Senakerib. | |
II M | LinVB | 8:20 | Akundoleli bango etumba na ba-Galata o Babilon : ba-Yuda bazalaki bobele na basoda nkoto mwambe, kasi ntango ba-Masedonia nkoto inei, baye babuni elongo na bango, bakomaki na kwokoso, ba-Yuda nkoto mwambe mpamba babomaki banguna nkoto monkama na ntuku ibale, mpe babotoli biloko ebele, bobele mpo Nzambe azalaki kosalisa bango. | |
II M | LinVB | 8:21 | Awa alendisi bango bongo mitema na maloba ma ye, banso bandimi kokufa mpo ya kobatela mibeko mpe mpo ya ekolo ya bango. Akaboli limpinga na biteni binei. | |
II M | LinVB | 8:22 | Apesi eteni yoko yoko o maboko ma bandeko ba ye : Simoni, Yozefu na Yonatan ; apesi bango moko moko bato nkoto yoko na nkama itano. | |
II M | LinVB | 8:23 | Na nsima atindi Eleazar ’te atanga Buku esantu. Na nsima ayebisi bango mogango mwa etumba : ‘Lisalisi lya Nzambe’. Ye moko akambi limpinga lya yambo mpe akei kobundisa Nikanor. | |
II M | LinVB | 8:24 | Nzambe wa bokasi bonso azalaki na bango ; babomi banguna leka nkoto libwa, bazokisi basoda ba Nikanor ebele mpe bakimisi bango banso. | |
II M | LinVB | 8:25 | Mosolo mwa bato bayaki kosomba ba-Yuda mokomi o maboko ma bango moko. Balandi bango mosika, kasi nsima bazongi mpo ngonga esili eleki. | |
II M | LinVB | 8:27 | Esilisi bango kolokoto bibuneli bya banguna na biloko biye batikaki, basepeli mokolo mwa Sabato : batondi Nzambe mingi mpe bakumisi ye oyo abikisi bango o mokolo moye mpe abandi lisusu kolakisa bango ngolu ya ye. | |
II M | LinVB | 8:28 | Esili mokolo mwa Sabato, bakaboli ndambo ya biloko na baye bayokaki mpasi o eleko ya minyoko, na basi bakufeli babali mpe na bana bitike. Bango moko na bana ba bango bakabolani biloko biye bitikali. | |
II M | LinVB | 8:29 | Na nsima banso babandi kosambela ; babondeli Nzambe wa ngolu abembana nye na basaleli ba ye. | |
II M | LinVB | 8:30 | Na nsima babundi na basoda ba Timoteo na Bakides ; babomi bato nkoto ntuku ibale, mpe babotoli bibombamelo bizalaki na manongi malai. Bakabolani biloko babotoli na ndambo ibale : bakamati ndambo yoko, mpe bapesi ndambo esusu na baye bayokaki mpasi o eleko ya minyoko, na bana bitike, na basi bakufeli babali mpe na babange. | |
II M | LinVB | 8:31 | Basangisi bibuneli babotoli mpe babombi byango o bisika bibongi. Biloko bisusu babotoli, bakei kotika byango o Yeruzalem. | |
II M | LinVB | 8:32 | Babomi mpe komanda wa bakengeli ba Timoteo, moto mabe mpenza oyo ayokisaki ba-Yuda mpasi mingi. | |
II M | LinVB | 8:33 | O ntango bazalaki kosepela lilonga o mboka-mokonzi, batumbi baye banso bazikisaki bizibeli bya ndako esantu, baye bakimaki elongo na Kalistene mpe bamibombaki o mwa ndako eke ; bazwi bongo lifuta lya mabe basalaki na bobebisi Tempelo. | |
II M | LinVB | 8:34 | Nikanor, nsuka ya moto mabe, oyo abengaki bato ba mombongo nkoto yoko mpo ’te batekela bango ba-Yuda, | |
II M | LinVB | 8:35 | asambwi. Bato baye ye moko atalaki lokola bato ba mpamba, basukisi ye na lisalisi lya Mokonzi. Nikanor atiki bilamba bya lokumu, akimi bobele ye moko o nzela ya bilanga lokola moombo. Basoda ba ye banso bakufi ; ye azwi nzela ya kobika mpe akomi o Antioko. | |
Chapter 9
II M | LinVB | 9:2 | Mpamba te, ekomaki ye o mboka Persepolis, amekaki koyiba biloko bya Tempelo mpe konyokolo bato ba mboka. Kasi bana mboka batombokeli ye, bakamati bibuneli, mpe babengani ye. Bongo asengelaki kokima na nsoni. | |
II M | LinVB | 9:4 | Ayoki nkanda enene mpe akani konyokolo ba-Yuda. Alongola bongo nsoni baye bakimisaki ye bayokisi ye. Na ntina ena alobi na motambwisi wa likalo lya ye akanga lisusu te, kasi atambola tee bakokoma. Kasi Nzambe asili akitisi ye o likambo. Alobaki na lolendo : « Mokolo nakokoma o Yeruzalem nakokomisa engumba eye bikunda bya ba-Yuda. » | |
II M | LinVB | 9:5 | Kasi Mokonzi Nzambe wa Israel oyo akomonoko makambo manso, abelisi ye bokono bwa liwa. Elobaki ye bongo, abandi koyoka mpasi makasi o minsopo mpe o libumu. Nkisi ya kobikisa ezalaki te. | |
II M | LinVB | 9:6 | Abongoki kozwa etumbu eye, zambi apasolaki mabumu ma bato basusu ntango ayokisaki bango minyoko mya nsomo. | |
II M | LinVB | 9:7 | Nzokande atiki lofundo la ye te ; kutu na lolendo lonene mpe na nkanda o motema akaneli ba-Yuda, mpe atindi ’te batambwisa likalo mbangu mbangu. Ezalaki bango kokende mbangu na likalo boye, na mbalakaka akwei o nse mpe azoki nzoto mobimba. | |
II M | LinVB | 9:8 | Moto azalaki na lolendo tee sikawa, oyo akanisaki ’te akoki kotinda mbonge ya mbu bitinda, mpe komeka bozito bwa ngomba na emekeli, alali o mabelé ; basengeli komeme ye o tipoi. Bato banso bamoni bongo nguya ya Nzambe. | |
II M | LinVB | 9:9 | Nyama ike ikomi kotambola o miso ma moto mabe oyo, na mpasi enene misuni mikomi kopolo mpe kokweya. Akomi kolumba nsolo ebe, eyokisi basoda ba ye banso mpi o motema. | |
II M | LinVB | 9:10 | Moto oyo akanisaki ’te akoki kosimba ata minzoto na maboko, ata moto moko te akoki kokoma pene na ye, mpo ya nsolo mabe ya mpota ya ye. | |
II M | LinVB | 9:11 | Awa bokono bolembisi ye nye, abandi kotika lolendo lonene ; akomi kondima ’te mpasi ya nsomo azalaki koyoka ezalaki bobele etumbu ya Nzambe. | |
II M | LinVB | 9:12 | Ntango alembi koyoka nsolo mabe ya nzoto ya ye, alobi : « Ebongi solo moto amikitisa o miso ma Nzambe, aluka kokokana na Nzambe te, zambi azali se moto wa kokufa. » | |
II M | LinVB | 9:14 | ’te akopesa bonsomi na engumba esantu, esika akendeki mbangu mpo ya kobebisa yango mpe kokomisa yango bikunda. | |
II M | LinVB | 9:15 | Azalaki liboso kotala ba-Yuda mpamba, aboyaki kokunda bango. Azalaki kotika bibembe bya bango mpo ’te ndeke iya kolia byango. Azalaki kobwaka bato na bana ba bango o boso bwa nyama ya zamba. Sikawa andimi kopesa bango lokumu lokola ba-Atene. | |
II M | LinVB | 9:16 | Liboso ayibaki biloko bisantu o Tempelo, sikawa andimi kokembisa yango na mabonza manzenga. Andimi kozongisa mbeki isantu iye ayibaki, mpe kobakisa mbeki isusu. Andimi kofuta na mosolo mwa ye moko binso bisengeli na mabonza. | |
II M | LinVB | 9:17 | Kutu alakeli Nzambe ’te ye moko akokoma mo-Yuda, mpe akotambola o mokili mobimba mpo ya kosakola bokasi bwa Nzambe bipai binso. | |
II M | LinVB | 9:18 | Kasi Nzambe wa bosembo asili kokata likambo lya ye. Mpasi ya ye ezalaki kolembe te. Amoni ’te akobika lisusu te ; bongo akomeli ba-Yuda monkanda mwa kobondela bango ; mokomami boye : | |
II M | LinVB | 9:19 | « Boyamba losako la ngai Antioko, moyangeli mpe mokonzi monene, natindeli ba-Yuda, bana mboka ba mpiko ; bozala nzoto kolongonu mpe bozwa boboto ! | |
II M | LinVB | 9:20 | Soko bino na bana ba bino boyoki nzoto malamu, mpe makambo ma bino manso mazali kotambola lokola bolingi, nakotondo Nzambe. | |
II M | LinVB | 9:21 | Awa malali makasi makangi ngai o mbeto, nazali kokanisa na motema bolingi bolamu boye bolakisi ngai. Ntango nautaki o mokili mwa Persi mpasi ekangi ngai makasi. Bongo nakanisaki ’te nasengeli kobongisela bato ba ngai makambo ma bango. | |
II M | LinVB | 9:23 | Kasi nayebi mpe ndenge tata azalaki kotika mokitani o esika ya ye ntango azalaki kokende bitumba o ngambo ya Efrate. | |
II M | LinVB | 9:24 | Bongo bato basengelaki komitungisa te ntango likambo lisalemi na mbalakaka, to nsango ya mpasi epalangani, mpo bayebaki ’te moto mosusu azalaki koyangela makambo ma ekolo. | |
II M | LinVB | 9:25 | Nabungi mpe te ’te bakonzi ba bikolo penepene na biso bazali na mposa ya koyeba maye makoki kosalema. Yango wana naponi mwana wa ngai Antioko azala mokonzi. Nasili nayebisaki baike o kati ya bino ’te natikelaki ye bokonzi ntango nazalaki kokende o bikolo o ngambo ya Efrate. Sikawa nakomeli ye monkanda moye nabakisi mpe awa. | |
II M | LinVB | 9:26 | Bongo nasengi mpe nabondeli bino : bokanisa malamu maye nasalaki bino, banso elongo to moko moko. Bolakisa mwana wa ngai se motema malamu lokola bolakisaki ngai. | |
II M | LinVB | 9:27 | Nayebi solo ’te akomemya malako ma ngai, mpe akolakisa bino motema malamu mpe boboto. » | |
II M | LinVB | 9:28 | Mobomi oyo azalaki kotuka Nzambe akomi koyoka mpasi makasi, eye ye moko azalaki koyokisa bato basusu liboso. Akufi liwa lya nsomo o kati ya ngomba ya ekolo esusu. | |
Chapter 10
II M | LinVB | 10:1 | Na lisalisi lya Mokonzi Nzambe, Yudas Makabe na baninga ba ye bakamati lisusu Tempelo mpe engumba. | |
II M | LinVB | 10:3 | Bapetoli Tempelo mpe batongi altare ya sika. Na mabanga makobimisaka mintentei bapelisi móto mwa sika, batumbi na mwango mabonza mpe mpaka ya malasi, bapelisi miinda mpe babongisi mampa ma libonza. Mibu mibale basali yango lisusu te. | |
II M | LinVB | 10:4 | Nsima yango bamilalisi o mabelé ; babondeli Nzambe ’te atindela bango mpasi enene boye lisusu te. Basengi ye soko bazongeli nzela ya masumu, apesa bango etumbu bo ebongi, kasi akaba bango o maboko ma bapagano mpe ma basenzi lisusu te. | |
II M | LinVB | 10:5 | Bapetoli Tempelo o mokolo monamei bapagano babebisaki yango, o sanza Kisleu, mikolo ntuku ibale na mitano. | |
II M | LinVB | 10:6 | Na nsai enene basepeli bongo mikolo mwambe, lokola bakosepelaka eyenga ya Milako. Bakundoli o mitema boniboni mwa liboso bazalaki kosepela eyenga ya Milako o kati ya ngomba ; o ntango ena bazalaki kofanda o mibenga lokola nyama ya zamba. | |
II M | LinVB | 10:7 | Yango wana bamemi bitapi bya nzete mpe mandalala o maboko, bayembi nzembo mpo ya kokumisa oyo asalisi bango mpo bapetola Tempelo. | |
II M | LinVB | 10:8 | Liboso batuni bato banso, na nsima babimisi mobeko ’te mobu na mobu ba-Yuda basantisa mikolo mina. | |
II M | LinVB | 10:10 | Sikawa tokosolola makambo ma Antioko Epator, mwana wa mokonzi oyo aboya Nzambe. Na bokuse nakoyebisa mabe maye asali na bitumba. | |
II M | LinVB | 10:11 | Awa azwi bokonzi, Antioko atii Lisias moyangeli mpe komanda monene wa Sele-Siria mpe wa Fenisia. | |
II M | LinVB | 10:12 | Tolemeo Makron azalaki moto wa liboso oyo amekaki koyangela ba-Yuda na boboto. Azalaki kosamba makambo ma bango na bosembo mpenza, awa basusu bazalaki kosala bango mabe. | |
II M | LinVB | 10:13 | Yango wana baninga ba mokonzi bafundi ye epai ya Epator ; balobi ’te azalaki mosuli mpo atikaki esanga Sipro, esika Filometor atindaki ye, mpe alekaki epai ya Antioko Epifane. Awa akoki kosala mosala mwa ye na lokumu lisusu te, Makron amibomi na bomeli ngenge. | |
II M | LinVB | 10:14 | Ekomi Gorgias moyangeli wa ekolo, afuti basoda ba bikolo bisusu, mpe ntango inso azalaki koluka kobundisa ba-Yuda. | |
II M | LinVB | 10:15 | Bato ba Idumea bazalaki mpe kotungisa ba-Yuda mingi. Bazalaki na bibombamelo bya solo ; bazalaki koyamba bato banso baboyami o Yeruzalem, bobele mpo ’te baluka bango na bitumba. | |
II M | LinVB | 10:16 | Makabe na baninga ba ye basambeli elongo na bato banso mpo ’te Nzambe asalisa bango. Na nsima bakei kobundisa ba-Idumea. | |
II M | LinVB | 10:17 | Babuni na bango makasi mpenza ! Babotoli mboka ya bango mpe babengani baye banso bazalaki kokengele o lopango. Banguna baye bakangi, bakati bango nkingo ; babomi bongo bato nkoto ntuku ibale. | |
II M | LinVB | 10:18 | Kasi basoda basusu soki nkoto libwa bamibombi o manongi mabale. Bazalaki na bibuneli biike bikoki ata etumba eumeli mingi. | |
II M | LinVB | 10:19 | Makabe atiki Simoni na Yozefu, na Zakeo na bato ba ye mwa mingi babunda na bango ; bongo ye moko akei o bisika bisusu biye bisengeli na lisalisi noki. | |
II M | LinVB | 10:20 | Kasi bato ba Simoni bayoki mposa ya mosolo ; bayambi mwango o maboko ma baye bazalaki o manongi, batikela bango bongo nzela ya kokima. Bazwi bongo dragma nkoto ntuku nsambo. | |
II M | LinVB | 10:21 | Ntango Makabe ayoki yango, abengi bankumu banso o likita, afundi baye bapesaki banguna nzela ya kokima ; bateki bongo bandeko ba bango mpo ya mosolo. | |
II M | LinVB | 10:23 | Na bibuneli bya ye akweisi bango, mpe abomi bato soki nkoto ntuku ibale o bibombamelo biye. | |
II M | LinVB | 10:24 | Timoteo abengi basoda baike o bikolo bisusu, asombi mpe farasa ebele o Azia. Liboso ba-Yuda bakweisaki ye, ye, sikawa azongi kobunda o Yudea mpo ’te abotolo mokili mwa bango na bitumba. | |
II M | LinVB | 10:25 | Ntango akomi pene, Makabe na bato ba ye babondeli Nzambe, bapakoli mputulu o mitó mpe balati ngoto o loketo. | |
II M | LinVB | 10:26 | Bamilalisi o boso bwa altare, babondeli Nzambe ’te ayokela bango mawa : azala monguna wa banguna ba bango, azala moyini wa baye bayini bango, se lokola elobami polele o Mobeko. | |
II M | LinVB | 10:27 | Esili losambo, bakamati bibuneli, babimi o engumba, bakei mwa mosika tee bakomi penepene na banguna. | |
II M | LinVB | 10:28 | Ntango moi mobandi kobima, babandi etumba. Mpo ’te balonga, ba-Yuda batii mitema na mpiko ya bango mpe na lisalisi lya Mokonzi ; banguna bazalaki bobele na mposa ya kobunda etumba. | |
II M | LinVB | 10:29 | O ntango etumba engali makasi banguna bamoni bato batano bakiti ut’o likolo ; babuteli farasa, iye izalaki na ebende ya wolo o minoko. Bato baye batano bayei kokamba ba-Yuda, | |
II M | LinVB | 10:30 | bazingi Makabe, babateli ye na nguba ya bango, bongo akoki kozoka te. Babeteli banguna makula ma móto. Mayele masileli bango zambi lya móto mongengi makasi, bapalangani banso na mobulu monene. | |
II M | LinVB | 10:31 | Ba-Yuda babomi basoda ba makolo nkoto ntuku ibale na nkama itano, na mpe basoda ba farasa nkama motoba. | |
II M | LinVB | 10:34 | Baye bazalaki o kati, batii mitema na bokasi bwa ebombamelo. Bazalaki kotuka Nzambe mpe kofinga Makabe na bato ba ye mafinga mabe. | |
II M | LinVB | 10:35 | Ekomi mokolo mwa mitano na ntongo, banzenga ntuku ibale o limpinga lya Makabe, awa bayoki maloba ma botuki Nzambe, batoki na nkanda, mpe na mpiko enene babuti efelo ya ebombamelo, mpe babomi baye banso bazwani na bango. | |
II M | LinVB | 10:36 | Basusu babuti lopango nsima ya bango, babundi na baye babombami o kati. Bazikisi manongi ma bango na móto, na nsima basangisi nkoni, mpe batumbi baye batukaki Nzambe. Basusu babuki bizibeli mpe bafungoleli bongo basoda basusu nzela, baye babotoli engumba. | |
II M | LinVB | 10:37 | Timoteo akei komibomba o libulu lya mai, bakati ye nkingo elongo na ndeko wa ye Kereas mpe na Apolofane. | |
Chapter 11
II M | LinVB | 11:1 | Lisias, mobokoli mpe ndeko wa mokonzi, oyo ayangeli makambo manene ma leta, ayoki mabe mpo ya maye malekaki o Yudea. | |
II M | LinVB | 11:2 | Noki mpenza asangisi basoda ba makolo nkoto ntuku mwambe na mpe basoda ba farasa banso, mpe akei kobunda na ba-Yuda, mpo ’te akomisa Yeruzalem engumba ya ba-Greki. | |
II M | LinVB | 11:3 | Alingi mpe kofutisa ba-Yuda mpako ya Tempelo lokola bapagano bakofutaka, mpe apesa mobu na mobu bokonzi bwa banganga Nzambe na moto oyo akofuta mosolo moike. | |
II M | LinVB | 11:4 | Akanisi nguya ya Nzambe soki te. Atii elikya se na basoda ba ye ba farasa nkoto na nkoto mpe na nzoku ya ye ntuku mwambe. | |
II M | LinVB | 11:5 | Eyingeli ye o Yudea, akomi pene na Betsur, eye ezalaki na ebombamelo, mosika na Yeruzalem kilometele soki ntuku ibale na nsambo. Azingi yango. | |
II M | LinVB | 11:6 | Makabe na bato ba ye bayoki nsango ’te Lisias abundisi ebombamelo. Na mai o miso babondeli Mokonzi elongo na bato banso ’te atindela bango anzelu aya kobikisa Israel. | |
II M | LinVB | 11:7 | Makabe akamati bibuneli, alendisi baninga ’te babanga likama te, kasi babunda elongo na ye mpo ya kobikisa bandeko. Banso elongo bakei kobunda na mpiko enene. | |
II M | LinVB | 11:8 | Awa batiki Yeruzalem mosika naino te, bamoni moto na farasa, azalaki kokende liboso lya bango ; alati elamba mpembe, amemi bibuneli bya wolo. | |
II M | LinVB | 11:9 | Banso monoko moko batondi Nzambe nta ngolu ; bayebi ’te sikawa bazwi makasi, babangi lisusu te. Bakoboma bobele bato te, bakoki koboma ata nyama ya zamba, mpe kobuka ata lopango la bibende. | |
II M | LinVB | 11:10 | Batongi milongo mya etumba, bakei elongo na mosalisi oyo autaki o likolo, oyo Nzambe atindaki mpo ya ngolu ya ye. | |
II M | LinVB | 11:11 | Lokola nkosi bakweli banguna o nzoto, mpe babomi basoda nkoto zomi na bato ba farasa nkoto yoko na nkama motoba, bakimisi basusu banso. | |
II M | LinVB | 11:12 | Baike ba baye bakimi bazoki to batiki bibuneli. Lisias mpe abiki bobele zambi akimaki na nsoni. | |
II M | LinVB | 11:13 | Lisias, moto wa mayele, akanisi ndenge akweyaki o etumba. Amoni ’te akoki kolonga ba-Ebrei te mpo Nzambe wa bokasi azalaki kosalisa bango. Bongo atindeli bango bantoma | |
II M | LinVB | 11:14 | mpo ’te bayokana mpe babongisa likambo na bosembo. Alakeli bango ’te akobondela mokonzi monene mpo ’te akata na bango bondeko. | |
II M | LinVB | 11:15 | Makabe andimi makambo manso Lisias alobi, mpo azalaki kopangana na bolamu bwa bato banso. Mpe ya solo, Mokonzi monene andimi maye manso Makabe asengeki Lisias o monkanda mpo ya bolamu bwa ba-Yuda. | |
II M | LinVB | 11:16 | Monkanda moye Lisias atindelaki ba-Yuda mozalaki boye : « Boyamba mbote ngai Lisias natindeli bino ba-Yuda. | |
II M | LinVB | 11:17 | Bantoma ba bino Yoane na Absalom batikeli ngai monkanda mozali na nkombo ya bino, mpe basengi ngai eyano. | |
II M | LinVB | 11:20 | Natindi bantoma ba bino mpe bato ba ngai bakende koyokana na bino na likambo lyoko lyoko. | |
II M | LinVB | 11:22 | Monkanda mouti na mokonzi mokomami boye : « Ndeko wa ngai Lisias, yamba losako la ngai mokonzi Antioko. | |
II M | LinVB | 11:23 | Awa tata wa ngai akei o mokili mwa banzambe ba biso, nalingi ’te ekolo ya biso ezala nye mpo ’te moto na moto asala mosala mwa ye. | |
II M | LinVB | 11:24 | Kasi nayoki ’te ba-Yuda bandimi kolanda makambo ma ba-Greki te lokola tata alingaki. Balingi se kolanda mimeseno mya bango moko, mpe basengi ngai natika bango balanda mimeseno mya bango. | |
II M | LinVB | 11:25 | Nalingi bato ba ekolo ena mpe bafanda nye ; yango wana nalingi batika Tempelo o maboko ma bango, mpo ’te balanda mimeseno mya bankoko. | |
II M | LinVB | 11:26 | Malamu otindela bango moto moko ayokana na bango mpe ayebisa bango nini biso tolingi, bongo bakitisa mitema mpe basala mosala mwa bango na esengo. » | |
II M | LinVB | 11:27 | Monkanda moye mokonzi atindelaki ba-Yuda mokomami boye : « Bankumu na ba-Yuda banso, boyamba losako la ngai, mokonzi Antioko. | |
II M | LinVB | 11:31 | Ba-Yuda ndebakoki lisusu kolia biloko mpe kotosa mibeko mya bango lokola liboso. Moto moko atungisa bango te na makambo bayebaki malamu te. | |
II M | LinVB | 11:34 | Ba-Roma batindeli ba-Yuda mpe monkanda, mwango moye : « Biso Kwinto Memio, Tito Manilio na Manio Sergio, bantoma ba Roma, mbote na bino ekolo ya ba-Yuda. | |
II M | LinVB | 11:36 | Kasi mpo ya maye alobaki ’te akotuna mokonzi liboso, botindela biso moto moko noki, oyo ayebi mango malamu. Bongo tokoka kolimbolela mokonzi maye makobongela bino, mpo tozali kokende o Antiokia. | |
Chapter 12
II M | LinVB | 12:1 | Awa bayokani bongo, Lisias azongi epai ya mokonzi, mpe ba-Yuda bazongeli misala mya bilanga. | |
II M | LinVB | 12:2 | Nzokande o kati ya bakomanda, Timoteo, Apolonio mwana wa Geneo, Yeronimo, Demopon, na Nikanor moyangeli wa Sipro, batiki ba-Yuda te ’te bapema to bafanda na boboto. | |
II M | LinVB | 12:3 | Bato ba Yope basali likambo lileki bobe. Babengi ba-Yuda baye bayaki kofanda epai ya bango, bayingela o masuwa mazalaki wana elongo na basi mpe na bana ba bango. Bato ba Yope bakosi ’te bazalaki na likambo o motema te. | |
II M | LinVB | 12:4 | Ba-Yuda bakanisi ’te bazalaki bobele kolanda etinda eye bato banso ba mboka bandimaki. Bongo mpo ya kolakisa ’te balingi boboto mpe bayebi kotosa, bandimi. Kasi awa bakomi o kati ya mbu, bato ba Yope bazindisi masuwa ma bango ; ba-Yuda soki nkama ibale bakufi. | |
II M | LinVB | 12:5 | Ntango Yudas ayoki nsango ya mabe maye ba-Yope basalaki bandeko ba ye, ayebisi mpe bato ba ye. | |
II M | LinVB | 12:6 | Ye moko abondeli Nzambe, zuzi wa bosembo, ’te asalisa ye na nsima akei kobunda na baye babomaki bandeko ba ye. Na butu apelisi móto o libongo lya bango, atumbi masuwa manso, mpe abomi bato banso babombamaki wana. | |
II M | LinVB | 12:7 | Kasi awa bakangaki lopango la engumba, akei na likanisi lya kozonga mokolo mosusu mpo ’te asilisa bato banso ba Yope. | |
II M | LinVB | 12:8 | Ntango ayoki ’te bato ba Yamnia mpe balingi kosala bongo na ba-Yuda bafandi epai ya bango, | |
II M | LinVB | 12:9 | akei kobundisa bango na butu, apelisi móto o libongo mpe o masuwa ; ezalaki móto monene mozalaki komonono kin’o Yeruzalem, mosika na Yope kilometele soki ntuku inei na inei. | |
II M | LinVB | 12:10 | Ut’o esika ena ba-Yuda bakei kobundisa Timoteo. Awa basili kotambola kilometele soki ibale, ba-Arabu babimeli ye, basoda ba makolo nkoto itano, basusu ba farasa nkama itano. | |
II M | LinVB | 12:11 | Babundi makasi mpenza. Basoda ba Yudas balongi, mpo Nzambe asalisi bango ; ba-Arabu bakwei, babondeli Yudas ’te atika bango. Balakeli ye ’te bakopesa ye ngombe mpe bakosalisa ye o makambo masusu. | |
II M | LinVB | 12:12 | Yudas amoni ’te bakoki kosalisa ye o makambo maike, andimi koyokana na bango. Bapesani maboko mpe na nsima batikani, bango bazongi o biema bya bango. | |
II M | LinVB | 12:13 | Yudas akei naino kobundisa ebombamelo, nkombo ’te Kaspin, ezalaki na bato ba bikolo ndenge na ndenge, ezingami na mai mpe na bifelo binene. | |
II M | LinVB | 12:14 | Bana mboka bazalaki kotia mitema na bifelo binene mpe na biloko bya kolia ebele bizalaki na bango. Babandi kofinga Yudas na bato ba ye, batioli bango, batuki Nzambe, na maloba mabe mpenza. | |
II M | LinVB | 12:15 | Yudas na baninga ba ye babondeli Mokonzi Monene wa nse mobimba. Mokonzi oyo, ata azalaki na bibuneli mpe na biloko bisusu te mpo ’te abuka bifelo bya Yeriko, abukaki byango nye, o eleko ya Yozue. Esilisi bango kobondela, baweli kobuka lopango na makasi ma bango manso. | |
II M | LinVB | 12:16 | Babotoli engumba mpo Nzambe andimi yango. Babomibomi bato ebele mpenza ; etima ezalaki wana na metele nkama inei na bonene ekomi motane mpo ya makila masopani. | |
II M | LinVB | 12:17 | Batamboli kilometele soki monkama na ntuku inei, bakomi o Karaks epai ya ba-Yuda baye bakotangaka ba-Tubia. | |
II M | LinVB | 12:18 | Kasi bakuti Timoteo te ; asilaki kolongwa, abundaki bitumba te, kasi atikaki basoda baike o etuka yoko. | |
II M | LinVB | 12:19 | Dositeo na Sosipater, bayangeli babale ba Makabe, bakei kuna mpe babomi bato baye banso Timoteo atikaki wana, bazalaki leka nkoto zomi. | |
II M | LinVB | 12:20 | Makabe akaboli basoda na mampinga mabale, mpe atii moyangeli o limpinga lyoko lyoko. Ye moko akei kobundisa Timoteo. Timoteo azalaki na basoda ba makolo nkoto monkama na ntuku ibale, na basusu ba farasa nkoto ibale na nkama itano. | |
II M | LinVB | 12:21 | Eyoki ye ’te Yudas abelemi, atindi basi na bana na mpe biloko o esika eye bakotangaka Karnion. Ezalaki esika bakoki kokoma bobele na mpasi, mpo nzela ezalaki eke mpenza mpe nkaka mingi. | |
II M | LinVB | 12:22 | Ntango basoda ba liboso ba Yudas babimi, banguna bakomi koyoka nsomo mpo Nzambe Oyo akomonoko makambo manso abimeli bango. Yango wana bakimi epai na epai ; mpe mpo ya mobulu bakomi kozokisana mpe kobomana na mimpanga. | |
II M | LinVB | 12:23 | Yudas akobi kolanda bango na mpiko enene ; akweisi bato baye babe, abomi bango soki nkoto ntuku isato. | |
II M | LinVB | 12:24 | Timoteo mpe akwei o maboko ma bato ba Dositeo na Sosipater. Na mayele abondeli bango ’te babikisa ye. Akosi ’te azalaki na bandeko ba bango baike baye akangaki liboso ; mbele mabe makoki kokwela bango. | |
II M | LinVB | 12:25 | Na maloba mingi andimisi bango ’te akotika bandeko ba bango ; yango wana batiki ye mpo ’te abikisa bandeko ba bango. | |
II M | LinVB | 12:26 | Yudas akei naino o Karnion mpe o Atargateion ; kuna abomi bato soki nkoto ntuku ibale na itano. | |
II M | LinVB | 12:27 | Awa asukisi banguna baye, Yudas atindi basoda ba ye o ebombamelo Efron, esika Lisanias afandi. Basoda banzenga bazalaki kokengele bifelo bya ebombamelo na mpiko enene. O kati ya engumba bibuneli bizalaki ebele, na biloko bya kobwaka. | |
II M | LinVB | 12:28 | Kasi ba-Yuda babondeli Mokonzi Nzambe, oyo akosilisaka bokasi bwa banguna na mbala yoko. Bongo babotoli engumba, babomi bato soki nkoto ntuku ibale na itano. | |
II M | LinVB | 12:29 | Na nsima bakei kobunda o Skitopolis, mosika na Yeruzalem kilometele monkama na zomi. | |
II M | LinVB | 12:30 | Kasi ba-Yuda bafandi wana bayebisi bango ’te bato ba Skitopolis basalisaki bango mpe bayambaki bango malamu o ntango ya mpasi. | |
II M | LinVB | 12:31 | Bongo Yudas na bato ba ye batondi bango mpe babondeli bango ’te mikolo minso balakisa bango se motema boboto. Bazongi o Yeruzalem, bakomi kuna mwa mikolo liboso lya eyenga ya Poso Nsambo. | |
II M | LinVB | 12:32 | Nsima ya eyenga eye bakotangaka Pentekoste, bakei kobundisa Gorgias, moyangeli wa Idumea. | |
II M | LinVB | 12:33 | Gorgias akei kokutana na bango na basoda ba makolo nkoto isato, mpe na basoda ba farasa nkama inei. | |
II M | LinVB | 12:35 | Kasi Dositeo, elombe soda wa farasa wa ba-Bakenor, akangi Gorgias na monkoto mpe abendi ye makasi. Alingi se kokanga moto mabe oyo, kasi koboma ye te. Nzokande soda moko wa farasa, moto wa Trasia, aleki wana, akati loboko la Dositeo ; mpe Gorgias akimi bongo o Marisa. | |
II M | LinVB | 12:36 | Basoda ba Esdris basili babundi mingi, babandi kolembe. Bongo Yudas abondeli Mokonzi ’te asalisa bango, akamba bango o etumba. | |
II M | LinVB | 12:37 | Na nsima agangi mogango mwa etumba o lokota la mboka mpe abandi nzembo ya bokumisi. Na mbalakaka akei kobundisa bato ba Gorgias mpe akimisi bango. | |
II M | LinVB | 12:38 | Yudas asangisi basoda ba ye mpe akei o engumba Odolam. Ekomi mokolo mwa poso, bamipetoli lokola bameseni, mpe basepeli eyenga ya Sabato o esika ena. | |
II M | LinVB | 12:39 | Mokolo mwa nsima bato ba Yudas bakei koluka bibembe bya bato bawei o etumba (mpo bakoki kozila lisusu te). Bakundi byango esika yoko na bandeko bawa o malita ma bankoko ba bango. | |
II M | LinVB | 12:40 | Bamoni o nse ya bilamba bya bawei banso nkisi ya banzambe ba lokuta ba Yamnia, eloko epekisami na Mobeko mwa ba-Yuda. Banso bamoni ntina ya liwa lya bango polele. | |
II M | LinVB | 12:42 | Na nsima basambeli mpo ya kosenge Nzambe alimbisa bawei masumu manso. Mpe elombe Yudas apaleli bato ba ye ’te basala masumu te, mpo bamoni na miso maye makweli baninga baye basali masumu. | |
II M | LinVB | 12:43 | Akongoli mosolo, azwi dragma nkoto ibale, atindi yango o Yeruzalem mpo ’te babonza libonza lya bosengi bolimbisi masumu. Asali bongo malamu mingi mpenza, mpo ayebi ’te bato bakosekwa nsima. | |
II M | LinVB | 12:44 | Soko azalaki na elikya te ’te basoda bakufi o etumba bakosekwa, mbele kosambelela bawei ezalaki se mpamba mpe likambo lya bozoba. | |
II M | LinVB | 12:45 | Kasi ayebi ’te bato bawei o bondeko na Nzambe bakozwa lifuta linene ; yango wana azwi likanisi liye lileki bolamu. | |
Chapter 13
II M | LinVB | 13:1 | O mobu mwa monkama na ntuku inei na libwa Yudas na bato ba ye bayoki ’te Antioko Epator ayei na limpinga linene kobundisa Yudea. | |
II M | LinVB | 13:2 | Lisias, mobokoli wa Antioko mpe moyangeli wa makambo manene ma leta, ayei na ye. Moko moko akambi limpinga lya ba-Greki : basoda ba makolo nkoto monkama na zomi, basusu ba farasa nkoto itano na nkama isato, nzoku ntuku ibale na ibale, na mpe makalo nkama isato. Makalo maye mazalaki na mbeli o yika. | |
II M | LinVB | 13:3 | Menelas ayei kosangana na bango ; na mayele alendisi Antioko mpo abundisa Yudea. Aluki bolamu bwa ekolo te, azalaki se kolikya ’te bakozongisela ye o mosala mwa nganga mokonzi. | |
II M | LinVB | 13:4 | Kasi Mokonzi wa bakonzi abongoli motema mwa Antioko mpo ’te ayokela moto mabe oyo nkanda. Ntango Lisias alakisi ye ’te mabe maye manso mauti se na Menelas, Antioko atindi ye o Berea, basambisa mpe baboma ye kuna lokola bameseni kosala. | |
II M | LinVB | 13:5 | Kuna linongi na bolai bwa maboko soki ntuku itano lizalaki, batondisi lyango na mputulu ya makala. O nsonge mpenza batongi eloko ekoki kozolongana. Soko batambwisi yango, ekozolongana mpe ekobwaka bato o kati ya mputulu. | |
II M | LinVB | 13:6 | Bakobutisaka bato baye bayibi biloko bya Tempelo mpe baye basalaki likambo lisusu lya nsomo o linongi liye, mpo ’te babwaka bango o nse mpe bakufa. | |
II M | LinVB | 13:8 | Solo, ebongoki bongo, mpo asalaki masumu maike : abebisaki altare eye ezali na móto mpe na makala masantu ; yango wana ye mpe akufi o kati ya mputulu ya makala. | |
II M | LinVB | 13:9 | Mokonzi akei na mikano mabe o motema : alingi koyokisa ba-Yuda mpasi ya nsomo, leka mpasi eye tata wa ye ayokisaki bango. | |
II M | LinVB | 13:10 | Yudas ayoki bongo, atindi bato ba ye babondela Nzambe butu moi, mpo ’te na mbala eye aya kosalisa bango lisusu ; | |
II M | LinVB | 13:11 | soki te, bakobotolo bango Mobeko, ekolo mpe Tempelo esantu. Bongo Nzambe andima te ’te bato ba ye, awa babandi kopema moke o mikolo miye, bakweya o maboko ma bapagano baye baboya ye. | |
II M | LinVB | 13:12 | Banso motema moko basali se bongo : mikolo misato batiki te kobondela Nzambe na mai o miso, kolala nzala mpe kolala o mabelé. Na nsima Yudas alendisi bango mitema, atindi bango ’te bamilengele. | |
II M | LinVB | 13:13 | Abengi bakolo ba mboka o likita, atuni makanisi ma bango. Na nsima akani kokende mpe kobanda etumba na lisalisi lya Nzambe, liboso ’te basoda ba mokonzi baya koyingela o Yudea mpe babotolo Yeruzalem. | |
II M | LinVB | 13:14 | Bongo Yudas atiki likambo liye o maboko ma Mozalisi. Alendisi basoda : bakufa to babika, na mpiko babunela mibeko, Tempelo, engumba esantu, ekolo mpe misala mya leta. Penepene na Modine Yudas apiki nganda. | |
II M | LinVB | 13:15 | Alakisi bato ba ye ligangi lya etumba, lyango ’te : « Nzambe akolonga. » Na banzenga ba mpiko baye aponi akei kobundisa ema ya mokonzi na butu. Babomi banguna soki nkoto ibale mpe nzoku eye eleki bonene, na motambwisi wa yango. | |
II M | LinVB | 13:17 | Etumba esili bobele ntango ntongo elingi etana. Esilaki se na lisalisi lya Mokonzi oyo azalaki kobatela Yudas. | |
II M | LinVB | 13:18 | Mpo ayebi mpiko ya ba-Yuda, mokonzi aluki kosilisa bimbombamelo bya bango na mayele. | |
II M | LinVB | 13:19 | Akei kobundisa Betsur, ebombamelo yoko ya ba-Yuda. Abundi na bango, kasi akoki bango te. Ameki lisusu, kasi akoki te. | |
II M | LinVB | 13:21 | Kasi Rodoko, soda mo-Yuda, akei koyebisa yango na banguna. Baluki ye, bakangi ye mpe babomi ye. | |
II M | LinVB | 13:22 | Mbala ya ibale mokonzi ameki koyokana na bato ba Betsur ; bapesani maboko ; na nsima akei kobundisa Yudas na bato ba ye, kasi akoki bango te. | |
II M | LinVB | 13:23 | Eyoki mokonzi ’te Filipo, oyo atiki mpo ayangela makambo ma ekolo o Antiokia, atombokeli ye, mayele masileli ye. Abengi ba-Yuda mpo ayokana na bango. Andimi maye basengi mpe alayi ndai ’te akosala bobele bongo. Awa bayokani, abonzi libonza, alakisi bongo lokumu na Tempelo. Asali engumba esantu malamu. | |
II M | LinVB | 13:24 | Ayambi Makabe malamu, mpe atiki Egemonides bo moyangeli wa ekolo mobimba, banda Tolemais kin’o mokili mwa ba-Gera. | |
II M | LinVB | 13:25 | Akei o Tolemais, kasi bato ba engumba bayoki mabe na ndenge ayokani na ba-Yuda mpe bandimi likambo liye lya boyokani te. | |
II M | LinVB | 13:26 | Lisias akei koteleme o boso bwa bango banso, ameki kolimbolela bango ntina ya bondeko bona ; andimisi bango mpe akitisi bango mitema ; bongo bandimi kofanda se na boboto. Na nsima Lisias akei o Antiokia. Boyoki bongo boniboni mokonzi akendeki kobunda bitumba mpe azongaki epai ya ye se mpamba. | |
Chapter 14
II M | LinVB | 14:1 | Nsima ya mibu misato, Yudas na bato ba ye bayoki ’te Demetrio, mwana wa Seleko, asemi o libongo lya Tripoli, ayei na masuwa ndenge na ndenge mpe na basoda ebele, | |
II M | LinVB | 14:3 | Moto moko, nkombo ’te Alkimo, oyo azalaki nganga mokonzi liboso amikomisi moto mbindo o ntango ya botomboki. Sikawa ayebi ’te akoki lisusu kosala ata mosala nini mwa altare esantu te. | |
II M | LinVB | 14:4 | Bongo akei kotala Demetrio o mobu mwa monkama na ntuku itano na moko. Amemeli ye enkoti ya wolo, lindalala na bitapi bya nzete ya oliva, biye bameseni kofuta bo mpako ya Tempelo. Mokolo mona ekoki na ye bongo. | |
II M | LinVB | 14:5 | Kasi noki azwi nzela ya kokokisa mokano mabe mwa ye mokolo Demetrio abengi ye o likita mpe atuni ye makanisi ma ba-Yuda, soko balingi kosala nini. | |
II M | LinVB | 14:6 | Alobi : « Ba-Yuda baye bakobengaka ba-Kasideo mpe bakambami na Yudas balingi lisusu kobimisa bitumba mpe kotomboko. Bakondima te ’te mokili mozala nye. | |
II M | LinVB | 14:8 | Bongo nayei awa liboso mpenza mpo nalingi solosolo ’te makambo ma mokonzi matambola malamu, nalingi ’te bandeko ba ngai ba-Yuda bazwa bolamu. Mpo ya bolema bwa bato baye natangaki ekolo ya biso mobimba ekomi na mpasi mpenza. | |
II M | LinVB | 14:9 | Bongo mokonzi, lokola oyebi makambo maye, nabondeli yo : otala bolamu bwa ekolo mpe bwa ba-Yuda bazali na makama. Sala yango na motema molamu, lokola okosalisaka bato banso. | |
II M | LinVB | 14:11 | Awa asilisi koloba bongo, baninga ba mokonzi, baye balingi Yudas soki te, babakisi maloba mayokisi Demetrio nkanda. | |
II M | LinVB | 14:12 | Bongo ye aponi Nikanor, oyo azalaki mokambi wa bato ba nzoku, aluboli ye moyangeli wa Yudea. Atindi ye | |
II M | LinVB | 14:13 | akende kosukisa Yudas, mpe apanza bato ba ye ; atia mpe Alkimo nganga mokonzi wa Tempelo nta bosantu. | |
II M | LinVB | 14:14 | Bapagano baye Yudas akimisaki o Yudea, bayokani na Nikanor mpe basangani na bato ba ye. Bakanisi ’te minyoko mpe mpasi eye bakoyokisa ba-Yuda, bikobongela bapagano. | |
II M | LinVB | 14:15 | Awa bayoki ’te Nikanor azalaki koya, mpe ndenge bapagano balingi kobundisa bango, ba-Yuda bamipakoli mputulu o mitó. Babondeli Nzambe oyo aponi ekolo ya bango seko, mpe akosalisaka bato ba ye ntango inso polele na bikela binene. | |
II M | LinVB | 14:17 | Simoni, ndeko wa Yudas, abandi kobunda etumba na bato ba Nikanor, kasi akamwi mpo banguna babimelaki ye na mbalakaka, bongo azongi nsima. | |
II M | LinVB | 14:18 | Nikanor ayoki lisolo lya mpiko ya Yudas mpe ya bato ba ye, mpe ndenge bazalaki kobunda na molende mpo ya kobikisa ekolo ya bango. Yango wana abangi kobanda etumba mpo ya kosilisa ntembe na bango. | |
II M | LinVB | 14:20 | Batali malamu makambo nini bazalaki kosenge bango ; na nsima mokambi wa basoda ayebisi mango na basoda ba ye. Banso motema moko bandimi ’te bakoki koyokana na bango. | |
II M | LinVB | 14:21 | Baponi mokolo mpe esika mpo bakonzi bakutana. Epai na epai bayei na likalo, mpe batii kiti ya lokumu. | |
II M | LinVB | 14:22 | O bisika bibongi Yudas abombi basoda bazalaki na bibuneli, mpo babangi ’te banguna bakosala bango mayele mabe na mbalakaka. Kasi bango babale balobani malamu mpe bayokani. | |
II M | LinVB | 14:23 | Nikanor ayei kofanda o Yeruzalem, asali mabe te, kutu azongisi bato balingaki kobunda elongo na ye. | |
II M | LinVB | 14:25 | Apesi ye malako mpo ’te abala mpe abota bana. Yudas asali bongo, akomi na bomoi bwa kimia mpe na boboto. | |
II M | LinVB | 14:26 | Alkimo amoni ’te Nikanor na Yudas bayokani malamu. Akei epai ya Demetrio na monkanda mwa maloba ma bokati bondeko ; alobi na ye ’te mikano mya Nikanor mikokani na bolamu bwa leta te, mpo aponi Yudas, monguna wa bokonzi, akitana ye bo moyangeli. | |
II M | LinVB | 14:27 | Makambo maye ma lokuta ma moto mabe mayokisi mokonzi nkanda, bongo atindeli Nikanor monkanda mpo ya koyebisa ye ’te boyokani bwa ye na Yudas bosepelisi ye soki te, mpe atindi ye akanga Yudas Makabe na minyololo noki mpe atinda ye o Antiokia. | |
II M | LinVB | 14:28 | Ntango Nikanor ayoki yango, mayele masileli ye, mpo koboma bondeko na moto asali likambo lyoko te, eyokisi ye mpasi enene o motema. | |
II M | LinVB | 14:29 | Kasi awa akoki koboya etinda ya mokonzi te, abandi koluka nzela ya kokokisa etinda eye na mayele. | |
II M | LinVB | 14:30 | Makabe amoni ’te Nikanor azalaki kolobisa ye malamu lisusu te, mpe ndenge azalaki kokangela ye elongi ntango bakutani. Ayebi ’te likambo lyango likobongela ye te, bongo abengi bato ba ye baike, mpe akei lisusu epai ya Nikanor te. | |
II M | LinVB | 14:31 | Ntango Nikanor amoni ’te Yudas akomi koyeba mikano mya ye, akei o Tempelo nta bosantu o ntango banganga Nzambe bazalaki kobonza mabonza ma mokolo na mokolo, mpe atindi ’te bakaba Yudas o maboko ma ye. | |
II M | LinVB | 14:32 | Banganga Nzambe balayi ndai, balobi : « Moto oyo ozali koluka, toyebi te esika nini azali. » | |
II M | LinVB | 14:33 | Nikanor atomboli loboko epai ya Tempelo, alayi ndai, alobi : « Soko bokangi ye na minyololo te, mpe bokabi ye o maboko ma ngai te, nakoboma ndako eye esantu ; nakobuka altare mpe o esika eyemei nakotongela Dionisio tempelo kitoko. » | |
II M | LinVB | 14:34 | Esilisi ye koloba bongo, akei. Banganga Nzambe batomboli maboko, babondeli Oyo akosalisaka ekolo ya biso ntango inso, balobi : | |
II M | LinVB | 14:35 | « E Mokonzi, osengeli na eloko te ! Nzokande olingaki ’te Tempelo eye ezala ndako ya yo o ntei ya biso. | |
II M | LinVB | 14:36 | Bongo, Mokonzi nta bosantu, batela ndako eye topetoli bobele sikawa, basantola yango mokolo moko lisusu te. » | |
II M | LinVB | 14:37 | Mokolo moko bafundi Razis, nkumu moko wa Yeruzalem, epai ya Nikanor. Razis azalaki kolinga bato ba ye mingi ; bato banso bazalaki kokumisa ye. Bazalaki kobenga ye « Tata wa ba-Yuda », mpo azalaki moto malamu mpenza. | |
II M | LinVB | 14:38 | O ebandela ya eleko ya botomboki, bafundaki ye ’te alingi makambo ma ba-Yuda. Kasi abangaki te, amikabaki mobimba mpo ya kobatela mibeko mya ekolo ya ba-Yuda. | |
II M | LinVB | 14:39 | Mpo ya kolakisa ’te alingi ba-Yuda te, Nikanor atindi basoda nkama itano bakanga Razis. | |
II M | LinVB | 14:41 | Mpo ya kokoto o linongi, esika Razis abombami, basoda babuki ezibeli ya linongi, mpe batindi bango ’te bapelisa móto mpe batumba bizibeli. Ntango Razis amoni ’te azingami bongo, amituboli na mopanga. | |
II M | LinVB | 14:42 | Aponi bongo kokufa na lokumu, mpo akwa o maboko ma bato babe te, baye bakonyokolo ye : yango ebongi na nkumu soki moke te. | |
II M | LinVB | 14:43 | Kasi asalaki noki, bongo mopanga mozokisi ye mpota enene te. Ntango basoda basili koyingela, akimi na mpiko kin’o nsonge ya efelo, amibwaki o nse mpo ’te akwela bato bazalaki wana. | |
II M | LinVB | 14:45 | Azalaki naino kopema, ata nzoto mobimba ezalaki kotanga makila ; na mpiko enene atelemi, ata azoki mpota ebele, aleki o kati ya bato tee akomi o nsonge ya libanga pia. | |
Chapter 15
II M | LinVB | 15:1 | Eyoki Nikanor ’te Yudas na bato ba ye bazalaki o mokili mwa Samaria, akani kobimisela bango etumba o mokolo mwa bopemi, mpo bakoka kopesa ye kwokoso te. | |
II M | LinVB | 15:2 | Ba-Yuda baye basengeli kolanda ye balobi na ye : « Oboma bango lokola mosenzi te ; omemya mokolo moye Nzambe mobateli wa bikelamo binso apono mpe asantisa. » | |
II M | LinVB | 15:3 | Nzokande, moto oyo nsuka ya bobe, atuni soko ya solo mokonzi moko azali o likolo oyo apesaki mobeko mwa mokolo mwa Sabato. | |
II M | LinVB | 15:4 | Bango bazongiseli ye : « Mokonzi wa bomoi, oyo azali mokonzi monene o likolo, yemei atindi ’te basantisa mokolo mwa nsambo. » | |
II M | LinVB | 15:5 | Kasi ye ayanoli : « Ngai mpe nazali na makasi awa o nse. Natindi bato bakamata bibuneli mpe basalela mokonzi. » Nzokande maye akanaki kosala, akokaki kosala mango te. | |
II M | LinVB | 15:6 | Nikanor na lofundo la ye akani kotonga litongi linene na bibuneli bya Yudas mpe bya bato ba ye. | |
II M | LinVB | 15:8 | Akebisi bato ba ye ’te babanga boyei bwa bapagano te. Bakanisa boniboni Nzambe asili asalisaki bango mbala mingi, bongo batia mitema na Mokonzi wa bokasi bonso. Bandima ’te sikawa lisusu akolongisa bango. | |
II M | LinVB | 15:9 | Alendisi bango na maloba ma buku ya Mobeko mpe ma baprofeta. Akundoleli bango bikela bya bitumba babundaki liboso, bongo apesi bango lisusu mpiko. | |
II M | LinVB | 15:10 | Alakisi bango mpe ’te bapagano bakokisaka bilako bya bango te mpe ndenge babukaki ndai ya bango. Esilisi ye kolendisa bango mitema, | |
II M | LinVB | 15:11 | atindi ’te bakamata bibuneli. Bokasi bwa bango bokouta na nguba to makongo ma bango te, kasi na maloba ma bolendisi ayebisi bango. Asololi bango mpe ndoto eye alotoki ; ezalaki lokola limoni amonoki ; basepeli na yango mingi. | |
II M | LinVB | 15:12 | Limoni liye lizalaki boye : nganga mokonzi Onias, oyo azalaki moto semba mpe wa motema bosawa, moto wa boboto mpe na maloba ma bonkonde, moto alingaki kolakisa ezalela elamu o makambo manso ut’o bomwana, amilakisaki na ye. Atomboli maboko mpe asambeleli ekolo mobimba ya ba-Yuda. | |
II M | LinVB | 15:13 | Na nsima moto mosusu abimeli Yudas se bongo : moto wa lokumu lonene, mobange akokisi mibu miike, alati bilamba binzenga bya mokonzi monene. | |
II M | LinVB | 15:14 | Onias alobi : « Moto oyo akopanganaka na bandeko ba ye, akosambelaka mingi mpo ya ekolo ya ye mpe mpo ya Engumba Esantu ; ezali Yeremia, profeta wa Nzambe. » | |
II M | LinVB | 15:15 | Yeremia atandi loboko la mobali, mpe ntango apesi Yudas mopanga mwa wolo alobi na ye : | |
II M | LinVB | 15:16 | « Kamata mopanga moye mosantu mozali likabo lya Nzambe. Na mopanga moye okonyata banguna. » | |
II M | LinVB | 15:17 | Maloba ma Yudas malendisi bango mitema, mazalaki solo maloba makoki kopesa bilenge mpiko mpo ’te babunda lokola bakolo mpenza. Bayokani ’te bapika nganda te, kasi babanda etumba bango moko ; bakata bongo na mpiko likambo na etumba, mpo engumba mpe Tempelo ya bango ikomi na likama. | |
II M | LinVB | 15:19 | Baye batikali o Yeruzalem bazalaki mpe kobanga, bazalaki mitema likolo mpo ya etumba eye o esobe. | |
II M | LinVB | 15:20 | Banso bazalaki kozila ndenge nini etumba ekosuka. Banguna basili basangani mpe batongi milongo mpo ya etumba : batii nzoku o bisika, mpe bakaboli basoda ba farasa epai na epai ya basoda ba makolo. | |
II M | LinVB | 15:21 | Makabe amoni mampinga manene ma banguna, bibuneli ndenge na ndenge, mpe nzoku ya nsomo. Bongo atomboli maboko mpe asambeli Mokonzi oyo akokelaka bikela binene. Ayebi malamu ’te Nzambe akolongisa baye babongi kolonga : mpo ya bibuneli te, kasi mpo ye moko alingi bongo. | |
II M | LinVB | 15:22 | Asambeli boye : « E Mokonzi, o eleko ya mokonzi Ezekia otindaki anzelu aboma basoda nkoto monkama na ntuku mwambe na itano ba Senakerib. | |
II M | LinVB | 15:23 | E Mokonzi wa likolo, otindela mpe biso anzelu liboso lya biso mpo abungisa banguna mpe ayokisa bango nsomo. | |
II M | LinVB | 15:24 | Na nguya ya loboko la yo onyata baye bayei kobundisa ekolo ya yo esantu, maloba ma botuki o monoko. » Asilisi losambo la ye bongo. | |
II M | LinVB | 15:27 | Na maboko bazalaki kobunda, kasi bazalaki kosambela Nzambe o mitema. Babomi bato nkoto ntuku isato na itano. Basepeli mpo bamonoki ndenge Nzambe asalisi bango. | |
II M | LinVB | 15:28 | Esili etumba, bazongi o mboka na esengo enene. Bakuti Nikanor akufi, bilamba bya bitumba o nzoto. | |
II M | LinVB | 15:30 | Yudas, oyo amikabaki mobimba mpo ya ekolo ya ye, mpe alakisaki bandeko ba ye bolingi bwa solo mikolo minso, atindi ’te bakata motó na mpe loboko la mobali la Nikanor mpe bameme yango o Yeruzalem. | |
II M | LinVB | 15:31 | Ntango akomi kuna, abengi ba-Yuda mpe atii banganga Nzambe o boso bwa altare. Abengisi mpe baye bazalaki o ebombamelo. | |
II M | LinVB | 15:32 | Alakisi bango motó mwa mobomi Nikanor na mpe loboko loye motuki atombolaki na lolendo mpo alakisa na mosapi Tempelo esantu ya Nzambe wa bokasi bonso. | |
II M | LinVB | 15:33 | Na nsima Yudas akati lolemu la moto mabe oyo mpe atindi ’te bapesa ndeke, ilia lango ndambo ndambo. Loboko, elembo ya bolema bwa ye, batingisi lango o boso bwa Tempelo. | |
II M | LinVB | 15:34 | Banso batondi mpe bakumisi Mokonzi oyo asalisi bango bongo, balobi : « Tokumisa Nzambe, zambi abateli ndako ya ye esantu mpo ’te ekoma na mbindo te. » | |
II M | LinVB | 15:35 | Yudas abaki motó mwa Nikanor o efelo ya ebombamelo, bo elembo elakisi polele ’te Mokonzi asalisi bango. | |
II M | LinVB | 15:36 | Banso bayokani ’te bakoki kolekisa mokolo mona mpamba te, kasi basepela mwango o sanza ya zomi na ibale, mokolo mwa zomi na misato. O lokota la ba-Aram bakotangaka sanza ena Adar. Mokolo mwango ezali mokolo liboso lya mokolo mwa Mardokai. | |
II M | LinVB | 15:37 | Lisolo lya makambo matali Nikanor lisili bongo. Banda mokolo mona mboka mokonzi ezali se o maboko ma ba-Ebrei. Yango wana nasukisi lisolo lya ngai awa. | |
II M | LinVB | 15:38 | Soko nabongisi manso malamu, yeba ’te ezali se lokola nalingaki. Soko nabongisi lyango malamu mingi te, mpe lileki minkanda misusu na elengi te, yeba ’te nasalaki se lokola ekoki na ngai. | |