II CHRONICLES
Up
Chapter 1
II C | LinVB | 1:1 | Salomo, mwana wa Davidi, alendisi bokonzi bwa ye. Yawe Nzambe wa ye azalaki na ye, mpe apesi ye lokumu lonene mpenza. | |
II C | LinVB | 1:2 | Salomo abengi bato banso ba Israel, bakomanda ba basoda nkoto mpe ba nkama, bazuzi, na bankumu ba Israel mobimba bazalaki bakonzi ba mabota. | |
II C | LinVB | 1:3 | Elongo na bato banso akei o esika esantu ya Gabaon, esika Ema ya Likita ezalaki, eye Moze mosaleli wa Yawe asalaki o eliki. | |
II C | LinVB | 1:4 | Davidi asilaki kolongola Sanduku ya Bondeko o Kiriat-Yearim mpo atia yango o esika alengeleki ; na ntina ena atelemisaki ema o Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 1:5 | Altare ya mbengi, eye Besaleel, mwana wa Uri, nkoko wa Kur, atongaki, ezalaki wana o boso bwa ndako ya Yawe, o esika Salomo na bato ba ye bayei kokumisa Yawe. | |
II C | LinVB | 1:6 | Kuna Salomo abuti altare ya mbengi ya Yawe, o boso bwa Ema ya Likita ; abonzi mabonza ma kotumba nkoto yoko. | |
II C | LinVB | 1:7 | O butu boyemei Nzambe abimeli Salomo, alobi na ye : « Yebisa ngai eloko nini nakoki kopesa yo. » | |
II C | LinVB | 1:8 | Salomo ayanoli Nzambe : « Osalaki tata wa ngai Davidi malamu mingi, mpe oluboli ngai mokonzi o esika ya ye. | |
II C | LinVB | 1:9 | E Yawe Nzambe, okokisi elako olakelaki tata wa ngai Davidi, awa okomisi ngai mokonzi wa bato baike, ebele lokola mputulu ya mokili ! | |
II C | LinVB | 1:10 | Bongo opesa ngai bwanya na mayele mpo ’te nakoka kokamba mpe koyangela bato baye. Soki te, nani akokoka koyangela bato ba ekolo ya yo enene ? » | |
II C | LinVB | 1:11 | Nzambe alobi na Salomo : « Awa olakisi mposa ya yo, awa osengi nkita, biloko to lokumu te, awa osengi liwa lya banguna ba yo te, awa ose-ngi bomoi bolai te, kasi osengi bwanya na mayele ma koyangela bato ba ekolo ya ngai esika naluboli yo mokonzi, | |
II C | LinVB | 1:12 | nakopesa yo bwanya na mayele, nakopesa yo mpe nkita, biloko na lokumu lokola mokonzi moko liboso lya yo azwaki te, mokonzi moko nsima ya yo akozwa mpe te. » | |
II C | LinVB | 1:13 | Salomo atiki esika esantu o Gabaon na Ema ya Likita ; akei o Yeruzalem mpe ayangeli ekolo Israel. | |
II C | LinVB | 1:14 | Salomo atongisi makalo mpe aluki basoda ba farasa. Azalaki na makalo nkoto yoko na nkama inei, mpe na bato ba farasa nkoto zomi na ibale. Atindi yango o mboka iye basoda ba ye bazalaki kolala, mpe penepene na mokonzi o Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 1:15 | Mokonzi asali makasi mpo ’te o Yeruzalem palata ekoma mingi lokola mabanga make, nzete ya sédere ikoma mpe mingi lokola nzete ya sikomore penepene na mbu. | |
II C | LinVB | 1:16 | Farasa ya Salomo iutaki o Ezipeti mpe o Silisia. Bato ba mombongo ba mokonzi basombaki yango o mokili mwa Silisia. | |
II C | LinVB | 1:17 | Bafutaki likalo lya Ezipeti mitako mya palata nkama motoba, bafutaki farasa mitako mya palata monkama na ntuku itano. Bakonzi ba Iti mpe ba Aram bazalaki mpe kosomba yango kuna o maboko ma bato ba mombongo. | |
Chapter 2
II C | LinVB | 2:1 | Salomo akamati bato nkoto ntuku nsambo mpo ya komeme biloko, bato nkoto ntuku mwambe mpo ya kokata mabanga o ngomba, na bakapita nkoto isato na nkama motoba. | |
II C | LinVB | 2:2 | Salomo atindeli Kuram, mokonzi wa Tiro, maloba maye : « Osalisaki tata wa ngai Davidi mpe otindelaki ye nzete ya sédere mpo ya kotonga ndako esika akofanda. | |
II C | LinVB | 2:3 | Sikawa ngai nalingi kotonga ndako mpo ya kokumisa nkombo ya Yawe Nzambe wa ngai. Nalingi ezala ndako ya ye mpo ’te bato batumbela ye mpaka ya malasi, babonzela ye mampa ntango inso, babonzela ye mabonza ma kotumba na ntongo mpe na mpokwa, o mikolo mya sabato, o mikolo sanza ya sika ekobimaka, mpe o biyenga binene bya Yawe Nzambe wa biso. Nalingi ezala bongo seko o Israel. | |
II C | LinVB | 2:4 | Ndako eye nalingi kotonga ekozala enene, zambi Nzambe wa biso aleki banzambe basusu banso. | |
II C | LinVB | 2:5 | Nani akoki kotongela Yawe ndako, oyo aleki likolo mobimba na bonene ? Mpe ngai nde nani ’te natongela ye ndako ? Soko nakosala bongo, ezali se mpo ya kotumbela ye mabonza. | |
II C | LinVB | 2:6 | Bongo nasengi yo : otindela ngai moto moko ayebi kotula wolo, palata, mbengi na ebende, moto ayebi kosono bilamba bya kiusa ya motane, ya moindo mpe ya longondo, moto ayebi mpe kokatakata mabaya. Ye akosala mosala elongo na bato ba ngai bayebi mosala mwango, baye bazali penepene na ngai o Yuda mpe o Yeruzalem, bato tata wa ngai Davidi atikelaki ngai. | |
II C | LinVB | 2:7 | Ut’o Libano, tindela ngai mibimbi mya sédere, ma sipresi mpe ma kambala, mpo nayebi ’te basali ba yo bayebi kokata nzete ya Libano. Basali ba ngai bakosala elongo na basali ba yo. | |
II C | LinVB | 2:8 | Babongisela ngai mabaya maike mpenza, mpo ndako eye nalingi kotonga ekozala enene mpe ya kokamwa. | |
II C | LinVB | 2:9 | Mpo ya koleisa baye bakokata nzete mpe mpo ya basali ba yo, napesi bingwongolo nkoto ntuku ibale bya mbuma ya mampa, bingwongolo nkoto ntuku ibale bya mbuma ya loso, bingwongolo nkoto ntuku ibale bya vino, na mpe bingwongolo nkoto ntuku ibale bya mafuta. » | |
II C | LinVB | 2:10 | Kuram, mokonzi wa Tiro, azongiseli Salomo monkanda moye : « Yawe aluboli yo mokonzi, zambi alingi ekolo ya ye mingi. » | |
II C | LinVB | 2:11 | Abakisi maloba maye : « Bakumisa Yawe Nzambe wa Israel, oyo akeli likolo na nse ; apesi mokonzi Davidi mwana mobali moko wa mayele, wa bokebi mpe wa bwanya, oyo akotonga ndako ya Yawe na mpe ndako esusu ya ye moko. | |
II C | LinVB | 2:12 | Nakotindela yo sikawa moto moko ayebi misala mingi, moto wa mayele, nkombo ya ye Kuram-Abi. | |
II C | LinVB | 2:13 | Mama wa ye azalaki moto wa libota lya Dan, tata wa ye moto wa Tiro. Ayebi mosala mwa kotula wolo, palata, mbengi na ebende ; ayebi kokata mabanga mpe kopasola mabaya ; ayebi kosono bilamba bya kiusa ya longondo, bya malekani mpe bya moindo ; ayebi mpe kosala bikeko mpe kosilisa misala minso bakopesa ye. Akosala mosala elongo na basali ba yo na baye ba tata wa yo Davidi. | |
II C | LinVB | 2:14 | Bongo otindela basaleli ba yo mbuma ya mampa, loso mpe mafuta na vino lokola olobaki. | |
II C | LinVB | 2:15 | Biso tokokata o Libano nzete inso isengeli na yo ; tokotinda yango o nzela ya mai ma mbu tee Yafa ; mpe yo okokomisa yango o Yeruzalem. » | |
II C | LinVB | 2:16 | Salomo atangi bampaya banso bakofandaka o Israel, lokola batangaki bango o eleko ya tata wa ye Davidi ; bazalaki nkoto monkama na ntuku itano na isato na nkama motoba. | |
Chapter 3
II C | LinVB | 3:1 | Salomo abandi kotonga Ndako ya Yawe. Atongi yango o Yeruzalem, o ngomba Moria, esika Yawe abimelaki tata wa ye Davidi. Ezalaki bobele esika eye Davidi aponoki o etutelo ya Ornan, moto wa Yebus. | |
II C | LinVB | 3:3 | Ndako Salomo atongeli Yawe ezalaki na bolai maboko ntuku motoba, lokola batangaki yango kala mpe na bonene maboko ntuku ibale. | |
II C | LinVB | 3:4 | Ekoteli ya ndako epai ya liboso ezalaki na bolai maboko ntuku ibale, ekokani na bonene bwa Ndako, mpe bosanda bwa yango bozalaki na bolai maboko monkama na ntuku ibale. Salomo azipi bifelo bya kati na wolo kitoko. | |
II C | LinVB | 3:5 | Azipi bifelo bya eteni enene na mabaya ma sipresi, azipi binso na manzanza ma wolo, mpe akembisi yango na bilili bya nkele ya mbila mpe na minyololo mya fulele. | |
II C | LinVB | 3:7 | Azipi eteni enene ya ndako na wolo, na mabaya ma motondo, na mabanga ma nse, na bifelo na bizibeli bya ndako ; akembisi bifelo na bikeko bya bakerubim. | |
II C | LinVB | 3:8 | Na nsima atongi esika eleki bosantu ; bolai bokokani na bonene bwa ndako enene, bozalaki na maboko ntuku ibale, mpe bonene bozalaki na maboko ntuku ibale lokola. Akembisi yango na wolo kitoko ya talenta nkama motoba. | |
II C | LinVB | 3:9 | Bozito bwa nsete bozalaki bwa mitako mya wolo ntuku isato. Akembisi mpe biteni o mokili na wolo. | |
II C | LinVB | 3:10 | O katikati ya esika esantusantu atuli bikeko bya bakerubim babale na ebende, azipi byango na wolo. | |
II C | LinVB | 3:11 | Mapapu ma bakerubim mazalaki na bolai maboko ntuku ibale ; lipapu lyoko lya kerubim wa yambo, maboko matano, lisimbi efelo ya ndako, mpe lipapu lya mabale, na bolai maboko matano, lisimbi lipapu lya kerubim mosusu. | |
II C | LinVB | 3:12 | Lipapu lya kerubim moko, na bolai maboko matano, lisimbi efelo ya ndako, mpe lipapu lya mabale, na bolai maboko matano, likutani na lipapu lya kerubim mosusu. | |
II C | LinVB | 3:13 | Mapapu ma bakerubim mazalaki ma kofungwana, mazalaki na bolai maboko ntuku ibale ; batelemi o makolo mpe bazalaki kotala epai ya kati ya ndako. | |
II C | LinVB | 3:14 | Asoni elamba enene ya kiusa ya longondo, ya moindo mpe ya malekani. Abakisi wana bilili bya bakerubim. | |
II C | LinVB | 3:15 | Atongi mpe makonzi mabale o boso bwa ndako, bolai maboko ntuku isato na matano, mpe mitó mizalaki o nsonge mizalaki na bolai maboko matano. | |
II C | LinVB | 3:16 | Akembisi mpe esika esantu na monyololo mwa fulele, mpe atii yango o nsonge ya makonzi. Asali mpe bilili bya malala monkama mpe akotisi byango o monyololo mwa fulele. | |
Chapter 4
II C | LinVB | 4:1 | Atongi altare ya mbengi, bolai maboko ntuku ibale, bonene maboko ntuku ibale, bosanda maboko zomi. | |
II C | LinVB | 4:2 | Na nsima atuli ebombelo ya mai : bonene maboko zomi, na lolenge la libungutulu, na bosanda maboko matano ; osengeli na nsinga ya maboko ntuku isato mpo ya kozinga yango mobimba. | |
II C | LinVB | 4:3 | Bakembisi nse ya yango na bilili bya ngombe epai na epai, na bolai maboko zomi, bizingi ebombelo ya mai mobimba. Bilili bina bya ngombe bitulami o milongo mibale mpe bisangani na ebombelo ya mai. | |
II C | LinVB | 4:4 | Ebombelo ena ebakemi likolo lya bikeko bya ngombe zomi na ibale. Ngombe isato itali epai ya Nordi, isato epai ya Westi, isato epai ya Sudi, mpe isato epai ya Esti. Ebombelo ena ebakemi likolo lya yango, ngombe inso ipesi mokongo epai ya kati. | |
II C | LinVB | 4:5 | Mbinga ezalaki na bonene bwa loboko moko : mpembeni ya yango ekembami lokola nkeni ekembami na bilili bya fulele. Ekoki kokwa bingwongolo bya mai nkoto isato. | |
II C | LinVB | 4:6 | Asali mpe sani isusu ya mai zomi, atii yango itano epai ya mobali, itano epai ya mwasi mpo ya mosala mwa bopetoli nyama ya mabonza ma kotumba ; kasi banganga Nzambe bazalaki komipetola o ebombelo enene ya mbengi. | |
II C | LinVB | 4:7 | Atuli bitemiseli bya mwinda zomi na wolo, lokola etindami, mpe atii yango o Tempelo, itano epai ya mobali, itano epai ya mwasi. | |
II C | LinVB | 4:8 | Asali mpe meza zomi ; atii yango o Tempelo, itano o epai ya mobali, itano o epai ya mwasi. Asali mpe nkeni monkama ya wolo ya konyakela mai. | |
II C | LinVB | 4:9 | Atongisi mpe lopango la banganga Nzambe, lopango lonene mpe bizibeli bya lopango ; azipi byango na manzanza ma mbengi. | |
II C | LinVB | 4:11 | Kuram atuli sani, mpau na mbeki ya konyakela mai. Asilisi bongo misala minso mokonzi Salomo atindaki ye o Tempelo ya Yawe. | |
II C | LinVB | 4:12 | Asali makonzi mabale na mitó mya mango, na mpe bikembiseli bibale zongazonga na mitó. | |
II C | LinVB | 4:13 | Asali mpe bilili bya malala nkama inei mpo ya bikembiseli bina bibale ; bilili bina bya malala bitingami milongo mibale o ekembiseli yoko yoko mpo ya kozipa bongo mitó mibale mya mako-nzi. | |
II C | LinVB | 4:15 | Asali mpe ebombelo enene ya mai, ezalaki se yoko, mpe o nse atii bikeko bya ngombe zomi na bibale. | |
II C | LinVB | 4:16 | Asali mpe mbeki isusu, mpau na nkanya ; Kuram atuli biloko bina binso na mbengi kitoko mpo ya mokonzi Salomo, basala na byango mosala o Tempelo ya Yawe. | |
II C | LinVB | 4:17 | Mokonzi anyangwisi byango o kati ya mabelé lido o mokili mwa Yordane kati ya Sukot na Sereda. | |
II C | LinVB | 4:19 | Salomo asali biloko binso bya Tempelo ya Nzambe : altare ya wolo, meza inso mpo ya kotia mampa ma mabonza ; | |
II C | LinVB | 4:20 | bitemiseli bya mwinda na miinda mya byango mpo ’te mipela o ndako esantusantu lokola mobeko motindi ; binso bisalemi na wolo kitoko ; | |
Chapter 5
II C | LinVB | 5:1 | Awa Salomo asilisi misala minso mpo ya ndako ya Yawe, amemisi biloko binso tata wa ye Davidi abonzelaki Nzambe, palata, wolo na biloko bisusu binso, atii byango o ebombelo ya mosolo ya Tempelo. | |
II C | LinVB | 5:2 | Na nsima Salomo abengi o Yeruzalem bakolo ba Israel na bakonzi ba bikolo na bankumu banso ba mabota ma Israel bameme Sanduku ya Bondeko bwa Yawe ut’o Engumba ya Davidi o Sion. | |
II C | LinVB | 5:5 | mpe bakei na yango, na Ema ya Likita na biloko bisantu binso bizalaki o Ema. Banganga Nzambe na ba-Levi bamemi biloko bina binso. | |
II C | LinVB | 5:6 | Mokonzi Salomo na mpe bato banso ba Israel basangani penepene na Sanduku ya Bondeko ; babomi mpe babonzeli Nzambe mpata na ngombe ebele mpenza, bakoki kotanga yango te. | |
II C | LinVB | 5:7 | Banganga Nzambe baye bamemi Sanduku ya Bondeko bwa Yawe, batii yango o esika nkombo ’te Debir ya Tempelo, o esika esantusantu, o nse ya mapapu ma bakerubim. | |
II C | LinVB | 5:9 | Mabaya maye mazalaki malai ; nsonge ya mango izalaki komonono ut’o esika esantu, kasi bato bazalaki o libanda bakoki komono mango te. Sanduku ezali naino kuna tee lelo. | |
II C | LinVB | 5:10 | O kati ya Sanduku ezalaki se meza ibale ya mabanga maye mabale Moze atiaki o ngomba Oreb, ntango Yawe akataki bondeko na bana ba Israel nsima ya bobimi bwa bango o Ezipeti. | |
II C | LinVB | 5:11 | Banganga Nzambe babimi o esika esantu ; banganga Nzambe banso bazalaki wana bamipetolaki, kasi balandaki molongo mwa mabota ma bango te. | |
II C | LinVB | 5:12 | Ba-Levi bayembi bazalaki : Asaf, Eman na Yedutun na bana mpe na bandeko ba bango balati bilamba bya malekani mpe babeti migbala, nzenze na lokombe o Esti ya altare. Elongo na bango banganga Nzambe monkama na ntuku ibale bazalaki kobete mindule. | |
II C | LinVB | 5:13 | Baye bazalaki kobete mindule to koyemba nzembo, bakumisi Yawe mongongo moko ; bayembi nzembo na mindule, nzenze na miziki misusu, balobi : « Bakumisa Yawe, zambi bolingi bwa ye, bolingi bwa seko ! » Ndako esantu etondi na limpata lya nkembo ya Yawe. | |
Chapter 6
II C | LinVB | 6:3 | Mokonzi amibongoli mpe abenisi lisanga mobimba lya Israel. Ba-Israel banso bazalaki koteleme. | |
II C | LinVB | 6:4 | Salomo alobi : « Bakumisa Yawe Nzambe wa Israel, oyo akokisi na nguya ya ye maye alakelaki tata wa ngai Davidi na maloba maye : | |
II C | LinVB | 6:5 | ‘Banda mokolo nabimisaki bato ba ekolo ya ngai o mokili mwa Ezipeti, naponoki mboka yoko te o ntei ya mabota manso ma Israel mpo ya kotonga ndako esika Nkombo ya ngai ekozala, mpe naponoki moto mosusu te azala mokonzi wa bato ba ngai ; | |
II C | LinVB | 6:6 | kasi naponoki Yeruzalem mpo ’te Nkombo ya ngai ezala kuna mpe naponi Davidi ayangela ekolo ya ngai Israel’. | |
II C | LinVB | 6:8 | Kasi Yawe alobi na tata wa ngai Davidi : Olingaki kotonga ndako mpo ya Nkombo ya ngai, mpe osali malamu. | |
II C | LinVB | 6:9 | Nzokande yo moto okotonga ndako ena te, kasi mwana oyo okobota, ye akotongela Nkombo ya ngai ndako. | |
II C | LinVB | 6:10 | Mpe Yawe akokisi maye alobaki. Nakitani tata wa ngai Davidi mpe nafandi o ngwende ya bokonzi ya Israel, lokola Yawe alakelaki ; natongi ndako eye mpo ya Nkombo ya Yawe Nzambe wa Israel. | |
II C | LinVB | 6:11 | Natii wana Sanduku, eye ezali na maloba ma Bondeko bwa Yawe, boye akataki na bana ba Israel. » | |
II C | LinVB | 6:12 | Na nsima Salomo akei koteleme liboso lya altare ya Yawe o miso ma ba-Israel banso mpe atandi maboko. | |
II C | LinVB | 6:13 | Salomo asalaki ebonga enene ya mbengi mpe atiaki yango o kati ya lopango, bolai maboko matano, bonene maboko matano mpe bosanda maboko masato. Abuteli yango, afukami o miso ma ba-Israel banso, mpe atandi maboko epai ya likolo, | |
II C | LinVB | 6:14 | alobi : « E Yawe Nzambe wa Israel, Nzambe mosusu oyo akokani na yo azali te, kuna o likolo te, awa o nse mpe te. Yo okomemyaka bondeko mpe okotalaka basaleli ba yo na motema ngolu, soko balandi nzela ya yo na motema moko. | |
II C | LinVB | 6:15 | Okokisaki elako olakelaki tata wa ngai Davidi, mosaleli wa yo. Maye olobaki na monoko mwa yo, osukisaki mango na maboko ma yo lelo. | |
II C | LinVB | 6:16 | Sikawa, e Yawe Nzambe wa Israel, kokisa elako eye olakelaki tata wa ngai Davidi, mosaleli wa yo, ntango olobaki na ye : ‘Soko bana ba yo bamikengeli mpe batosi mobeko mwa ngai lokola yo osalaki, bokonzi bwa Israel bokotikala na bango seko’. | |
II C | LinVB | 6:17 | Sikawa, e Yawe Nzambe wa Israel, kokisa liloba olobaki na tata wa ngai Davidi, mosaleli wa yo. | |
II C | LinVB | 6:18 | Nzambe akoki nde kofanda esika yoko na bato awa o nse, solo ? Nzambe aleki likolo na bonene, bongo boniboni ndako eye natongi ekokoka ye ? | |
II C | LinVB | 6:19 | Yawe Nzambe wa ngai, oyoka mabondeli na losambo la ngai, mosaleli wa yo : Yoka boleli na losambo la ngai, mosaleli wa yo ! | |
II C | LinVB | 6:20 | Miso ma yo matala ndako eye butu moi, zambi olobaki mpo ya esika eye : Nkombo ya ngai ekozala wana. Yango wana yoka losambo ngai, mosaleli wa yo, nazali kosambela o esika eye. | |
II C | LinVB | 6:21 | Ondima mabondeli ma ngai, mosaleli wa yo, mpe ma Israel, ekolo ya yo, ntango bakosambela o esika eye. Ut’o esika yo ozali kuna o likolo, yoka mpe limbisa bango. | |
II C | LinVB | 6:22 | Moto asali moninga mabe mpe balayisi ye ndai, awa ayei kolaya o boso bwa altare la yo o Tempelo eye, | |
II C | LinVB | 6:23 | yo ut’o likolo, yoka ye, sambisa basaleli ba yo, pesa moto oyo asali mabe etumbu mpo ’te mabe ma ye makwela ye moko, mpe longisa moto wa bosembo oyo asali mabe te. | |
II C | LinVB | 6:24 | Soko bato ba ekolo ya yo Israel bakiti o etumba na banguna, mpo basalaki masumu o miso ma yo, kasi soko na nsima babongoli mitema, bakumisi nkombo ya yo, basambeli mpe babondeli yo o Tempelo eye, | |
II C | LinVB | 6:25 | yo ut’o likolo, yoka bango mpe limbisa masumu ma bato ba ekolo ya yo Israel mpe zongisa bango lisusu o mokili opesaki bankoko ba bango. | |
II C | LinVB | 6:26 | Soko likolo likangemi mpe mbula enoki lisusu te, zambi bato basalaki masumu o miso ma yo, kasi na nsima basambeli mpe bamibongoli epai ya esika eye, bakumisi nkombo ya yo, mpe bayoki motema mawa, mpo oyokisaki bango nsoni, | |
II C | LinVB | 6:27 | yo ut’u likolo, yoka bango mpe limbisa masumu ma basaleli ba yo mpe maye ma Israel, ekolo ya yo, lakisa bango lisusu nzela elamu basengeli kolanda, mpe nokisa mbula o mabelé maye opesaki bato ba ekolo ya yo. | |
II C | LinVB | 6:28 | Soko nzala enene to bokono bobe bokomi kongala o mokili, to mbuma ya bilanga ikomi kobeba, soko mapalela to makélele mayei, to banguna bayei kozinga mboka ya bango, soko etumbu nini to bokono nini bozali kongala, | |
II C | LinVB | 6:29 | mpe moto moko to ekolo ya yo Israel mobimba asambeli to abondeli, mpe mpo ya mpasi to bolozi ekwelaki ye atandi maboko epai ya Tempelo eye, | |
II C | LinVB | 6:30 | yo ut’o likolo esika okofandaka, yoka ye mpe limbisa ye, zongisela moto lolenge asalaki, zambi yo oyebi motema mwa ye ; se yo moko oyebi mitema mya bato banso. | |
II C | LinVB | 6:31 | Bongo bato bakobanga yo mpe bakolanda nzela ya yo mikolo minso mya bomoi bwa bango o mokili opesaki bankoko ba biso. | |
II C | LinVB | 6:32 | Moto wa ekolo esusu, oyo azali moto wa ekolo ya yo Israel te, soko auti mosika zambi ayokaki lokumu la Nkombo ya yo enene mpe bokasi bwa yo, mpe ayei kosambela yo o ndako eye, | |
II C | LinVB | 6:33 | yo ut’o likolo esika okofandaka, yoka ye mpe pesa mompaya ona manso asengi. Bongo bato ba bikolo binso bakoyeba Nkombo ya yo, bakobanga yo lokola bato ba ekolo ya yo Israel bakobangaka yo ; bakoyeba ’te natongi ndako eye mpo ya kokumisa Nkombo ya yo. | |
II C | LinVB | 6:34 | Soko bato ba ekolo ya yo bakei kobunda na banguna epai otindi bango, soko basambeli mpe bamibo-ngoli epai ya engumba eye oponoki mpe epai ya Tempelo eye natongaki mpo ya kokumisa Nkombo ya yo, | |
II C | LinVB | 6:36 | Soko bato basali masumu o miso ma yo, zambi moto asali masumu te azali te, soko oyokeli bango nkanda mpe okabi bango o maboko ma banguna, bongo soko banguna bakangi bango mpe bakei na bango o mokili mwa bango, mosika to mosika te, | |
II C | LinVB | 6:37 | na nsima kuna o mokili mwa banguna esika bazali baombo, babongoli mitema mpe babondeli yo na maloba maye : « Tozali basumuki, tosali masumu, tobebisi mpenza », | |
II C | LinVB | 6:38 | awa bazongeli yo na motema moko mpe na mayele manso kuna o mokili esika bazali baombo, awa basambeli mpe batali epai ya mokili opesaki bankoko ba bango, epai ya engumba yo oponoki, mpe epai ya Tempelo eye ngai natongaki mpo ya kokumisa Nkombo ya yo, | |
II C | LinVB | 6:39 | yo ut’o likolo esika okofandaka, yoka losambo na mabondeli ma bango, ndimela bango mpe limbisa mabe ma bato ba ekolo ya yo. | |
II C | LinVB | 6:40 | Sikawa, e Nzambe wa ngai, miso ma yo mafungwana polele mpe matoi ma yo mayoka losambo nazali kosambela o esika eye. | |
II C | LinVB | 6:41 | Sikawa, e Yawe Nzambe, teleme mpe yaka o esika ya yo ya bopemi, yaka elongo na Sanduku ya Bondeko, esika bokasi bwa yo bozali ! E Yawe Nzambe, banganga Nzambe ba yo balata molato mwa libiki, mpe bato bayambi yo basepela mpe bayoka esengo ! | |
Chapter 7
II C | LinVB | 7:1 | Esilisi Salomo losambo la ye, móto mouti o likolo mpe motumbi mabonza na miboma, mpe nkembo ya Yawe etondisi Tempelo. | |
II C | LinVB | 7:2 | Banganga Nzambe bakoki koyingela o ndako ya Yawe te, zambi nkembo ya Yawe etondisi ndako ya Yawe mobimba. | |
II C | LinVB | 7:3 | Bana banso ba Israel bamoni móto mokiti mpe nkembo ya Yawe ekiteli Tempelo, bakumbami bilongi o nse bobele o esika ena, bakumbameli mpe bakumisi Yawe, balobi : « Yawe azali bolamu, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko. » | |
II C | LinVB | 7:5 | Mokonzi Salomo abonzi ngombe nkoto ntuku ibale na ibale, na mpata nkoto monkama na ntuku ibale. Mokonzi na bato banso basali bongo mpo ya bobenisi Tempelo ya Yawe. | |
II C | LinVB | 7:6 | Banganga Nzambe batelemi o esika ya bango ; ba-Levi bazalaki na biyembeli bya Yawe, biye mokonzi Davidi asalaki ; bayembi nzembo ya bokumisi eye Davidi asalaki : « Bokumisa Yawe, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko ». Banganga Nzambe babeti mindule penepene na bango, mpe bato banso bazalaki koteleme. | |
II C | LinVB | 7:7 | Salomo akomisi eteni ya kati ya esika o boso bwa Tempelo esika ya kobonza mabonza ma kotumba mpe mafuta ma miboma mya bondeko, zambi altare ya mbengi, eye Salomo asalaki, ekoki te mpo ’te babonza mabonza ma bolei na mafuta manso. | |
II C | LinVB | 7:8 | Salomo asepeli eyenga ena mikolo nsambo mobimba, mpe ba-Israel banso basepeli na ye elongo. Ezalaki wana bato ebele, bautaki bipai binso banda Amat tee moluka mwa Ezipeti. | |
II C | LinVB | 7:9 | Mokolo mwa mwambe basangani likita lya nkembo, zambi mikolo nsambo basepelaki eyenga ya bobenisi altare, eyenga eumeli mpe mikolo nsambo. | |
II C | LinVB | 7:10 | O mokolo mwa ntuku ibale na misato mwa sanza ya nsambo, Salomo azongisi bato o biema bya bango. Bayoki esengo mpe basepeli mingi mpo ya malamu manso Yawe asalaki Davidi, Salomo na ekolo ya ye Israel. | |
II C | LinVB | 7:11 | Esilisi Salomo kotonga Tempelo ya Yawe na ndako ya mokonzi, na mpe misala minso alingaki kosala o Tempelo ya Yawe mpe o ndako ya ye moko, | |
II C | LinVB | 7:12 | Yawe amimonisi na ye na butu, alobi na ye : « Nayoki losambo la yo mpe naponi esika eye ezala ndako ya kobonza miboma. | |
II C | LinVB | 7:13 | Soko nakangi likolo mpe mbula enoki lisusu te, soko natindi mapalela masilisa biloko binso bya mokili, soko natindi bokono bobe o ekolo ya ngai, | |
II C | LinVB | 7:14 | mpe soko basambeli mpo ya bato ba ngai, bango mpe bamikitisi, babondeli ngai, baluki elongi ya ngai mpe batiki nzela ya masumu, ngai ut’o likolo nakoyoka bango, nakolimbisa masumu ma bango mpe nakobikisa ekolo ya bango. | |
II C | LinVB | 7:15 | Sikawa miso ma ngai mafungwani polele mpe matoi ma ngai mazali koyoka losambo basambeli o esika eye. | |
II C | LinVB | 7:16 | Naponi mpe nasantisi ndako eye mpo ’te Nkombo ya ngai ezala wana seko ; miso ma ngai na motema mwa ngai makozala wana seko. | |
II C | LinVB | 7:17 | Mpe yo, soko olandi nzela ya ngai lokola tata wa yo Davidi alandaki yango, soko osali manso natindi yo, mpe otosi mibeko na mitindo mya ngai, | |
II C | LinVB | 7:18 | bokonzi bwa yo bokoumela seko lokola nalakelaki tata wa yo Davidi : ‘Mikolo minso mokonzi wa Israel akozala moto wa libota lya yo’. | |
II C | LinVB | 7:19 | Kasi soko botiki ngai mpe boboyi kotosa bitinda na mibeko mya ngai, miye nalakisaki yo, soko bolandi banzambe basusu mpe bokumisi bango, | |
II C | LinVB | 7:20 | ngai nakobengana bango o mokili napesaki bango ; Tempelo eye nasantisi, nakobwaka yango mosika na ngai, mpe bato banso bakokomisa yango eloko ya koseke mpe lisapo. | |
II C | LinVB | 7:21 | Bato bakoleka penepene na Tempelo eye enene, bakokamwa mpe bakotuna : Mpo nini Yawe asali bongo na ekolo eye mpe na Tempelo eye ? | |
Chapter 8
II C | LinVB | 8:4 | Alendisi mboka Tadmor o eliki na mboka inso esika bakobombaka biloko o mokili mwa Amat. | |
II C | LinVB | 8:5 | Alendisi mpe Bet-Oron ya likolo mpe Bet-Oron ya nse, mpe azingi yango na lopango, atii bizibeli mpe bikangeli. | |
II C | LinVB | 8:6 | Alendisi lisusu Baalat, mboka inso esika bakobombaka biloko, na mboka inso ya makalo mpe mboka inso ya farasa. Salomo atongi mpe ndako inso alingi kotonga o Yeruzalem, o Libano mpe o bipai binso azalaki mokonzi. | |
II C | LinVB | 8:7 | Ba-Iti, ba-Amor, ba-Perizi, ba-Ivi na ba-Yebus baye batikali, bango bazalaki ba-Israel te, | |
II C | LinVB | 8:8 | bankoko ba bango batikalaki o mokili, baye ba-Israel babomaki te, Salomo akamati bango mpo ’te basala mosala makasi tee lelo. | |
II C | LinVB | 8:9 | Kasi Salomo atindi bana ba Israel mosala mona mwa boombo te, zambi bazalaki bato ba mosala mwa soda, bakomanda na baye bakomemeke bibuneli, bakapita ba baye bakotambwisaka makalo mpe farasa. | |
II C | LinVB | 8:10 | Bakapita ba bato bakotalaka misala mya Salomo bazalaki nkama ibale na ntuku itano ; bango bazalaki kotinda bato basala misala mya bango. | |
II C | LinVB | 8:11 | Salomo alongoli mwasi wa ye, mwana wa Farao, o Engumba ya Davidi mpe afandisi ye o ndako amito-ngeli, zambi akanisi : Mwasi wa ngai akoki kofanda o ndako ya Davidi mokonzi wa Israel te, mpo esika Sanduku ya Yawe ekotoki ezali esika esantu. | |
II C | LinVB | 8:12 | Na nsima Salomo abonzeli Yawe mabonza ma kotumba o altare ya Yawe, eye atongaki o boso bwa Ekoteli. | |
II C | LinVB | 8:13 | Alandi bongo milulu mya kobonza mabonza lokola Moze atindaki o mikolo mya sabato, mikolo sanza ya sika ekobimaka mpe biyenga binene bisusu, mbala isato o mobu : Eyenga ya Mampa mazangi nkisi, eyenga ya Poso, mpe eyenga ya Biema. | |
II C | LinVB | 8:14 | Alandi mibeko mya tata wa ye : akaboli banganga Nzambe mangomba mangomba mpo ’te basala mosala na likelemba, apesi mpe ba-Levi mosala mwa kokumisa Nzambe na bosalisi banganga Nzambe lokola milulu mya mokolo na mokolo mitindi ; atii mpe bakengeli ba bizibeli bya Tempelo, moto na moto o esika ya ye, zambi Davidi, moto wa Nzambe, atindaki bongo. | |
II C | LinVB | 8:15 | Babuki mobeko moko te moye motali banganga Nzambe mpe ba-Levi, ata mibeko mitali ebombelo ya mosolo. | |
II C | LinVB | 8:16 | Bongo mosala Salomo alengeleki, moye mobandaki mpenza mokolo batiaki mabanga ma nse, mobongi nye mokolo basukisi kotonga Tempelo ya Yawe. | |
Chapter 9
II C | LinVB | 9:1 | Mokonzi mwasi wa Saba ayoki nsango ya lokumu la Salomo ; yango wana ayei komeka ye na mituna. Akomi o Yeruzalem na nkita mingi, na kamela ebele imemi malasi, wolo na mabanga ma motuya, mingi mpenza. Ekomi ye epai ya Salomo ayebisi ye manso azalaki kokanisa. | |
II C | LinVB | 9:4 | bilei o meza ya ye, bankumu bafandi o meza, bilamba bya bato ba mosala, bilamba bya bato bakobongelaka ye vino, na mabonza azalaki kotumba o Tempelo ya Yawe : makanisi ma ye makei mosika. | |
II C | LinVB | 9:5 | Alobi na mokonzi : « Nsango ya yo mpe ya bwanya bwa yo nayokaki o ekolo ya ngai ezali ya solo mpenza ! | |
II C | LinVB | 9:6 | Nalingaki kondima te soko namoni na miso te. Maye bayebisaki ngai mazali moke, nzokande bwanya na lokumu la yo bileki mingi, bayebisaki ngai se ndambo ! | |
II C | LinVB | 9:7 | Esengo na bato ba yo mpe na basaleli ba yo bazali penepene na yo, mpe bakoyokaka bwanya bwa yo mikolo minso ! | |
II C | LinVB | 9:8 | Lokumu na Yawe Nzambe wa yo, oyo alakisi yo bolamu bwa ye mpe afandisi yo o ngwende ya ye mpo ’te ozala mokonzi o nkombo ya Yawe Nzambe wa yo ! Solo, Nzambe wa yo alingi Israel, alingi mpe ’te Israel eumela seko, yango wana aluboli yo mokonzi mpo ’te oyangela ekolo ya ye na bosembo mpe na bosolo. » | |
II C | LinVB | 9:9 | Abonzeli mokonzi talenta ya wolo monkama na ntuku ibale, akabeli ye mpe malasi na mabanga maike ma motuya monene. Mokonzi mwasi apesi Salomo malasi mingi ; malasi ebele boye mazalaki o Israel mokolo moko te. | |
II C | LinVB | 9:10 | Se bongo, basaleli ba Kuram mpe ba Salomo, baye bamemeki wolo ya Ofir, bayei mpe na mabaya ma kambala mpe na mabanga ma motuya. | |
II C | LinVB | 9:11 | Na kambala ina mokonzi abongisi eteni ya nse ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya ye moko ; na yango asali mpe nzenze na makembe mpo ya bayembi. Nzete ya motindo mona imononoki liboso te o mokili mwa Yuda. | |
II C | LinVB | 9:12 | Mokonzi Salomo apesi mokonzi mwasi wa Saba biloko binso asengi, bileki na motuya biloko biye mokonzi mwasi apesaki. Na nsima mokonzi mwasi azongi o mboka ya ye elongo na basaleli ba ye. | |
II C | LinVB | 9:13 | Salomo azalaki kozwa mobu na mobu talenta ya wolo nkama motoba na ntuku motoba na motoba. | |
II C | LinVB | 9:14 | Azalaki mpe kozwa mosolo mwa mpako ya bato bakokendeke mobembo mpe ma bato ba mombongo. Bakonzi banso ba Arabu na bayangeli ba ekolo bazalaki kopesa Salomo wolo na palata. | |
II C | LinVB | 9:15 | Mokonzi Salomo atulisi nguba inene ya wolo nkama ibale ; bozito bwa nguba yoko bokoki mitako nkama motoba. | |
II C | LinVB | 9:16 | Atulisi mpe nguba ike ya wolo ; bozito bwa nguba yoko yoko bokoki mitako nkama isato. Mokonzi atii yango o ndako ya Zamba ya Libano. | |
II C | LinVB | 9:17 | Mokonzi asali naino ngwende enene na mpembe ya nzoku, mpe akembisi yango na wolo kitoko. | |
II C | LinVB | 9:18 | Ngwende ena ezalaki na bibuteli motoba, na efandeli ya wolo, mpe na bisimbeli mpo ya kotia maboko epai na epai. Bikeko bya nkosi zomi na bibale bizalaki mpembeni ya bisimbeli. | |
II C | LinVB | 9:19 | Bikeko bya nkosi zomi na bibale bizalaki mpe epai na epai ya bibuteli motoba. O ekolo ata yoko te basalaki mosala monene boye. | |
II C | LinVB | 9:20 | Mbeki inso ya komele ya mokonzi Salomo isalemaki na wolo, mpe biloko binso bya ndako ya Zamba ya Libano bisalemaki na wolo kitoko. O mikolo mya Salomo palata ezalaki na motuya monene te, | |
II C | LinVB | 9:21 | mpo mokonzi azalaki na masuwa manene makokende o Tarsis na basaleli ba Kuram. Nsima ya mibu misato misato masuwa ma Tarsis mazalaki koya na wolo, palata, nkema na ndeke lipombo. | |
II C | LinVB | 9:23 | Bakonzi banso ba nse balingi kokende epai ya Salomo mpo bayoka bwanya Nzambe atii o motema mwa ye. | |
II C | LinVB | 9:24 | Bango banso bayei na mabonza : biloko bya palata mpe bya wolo, bilamba, bibuneli, malasi, farasa na mpunda ; bazalaki kosala bongo mobu na mobu. | |
II C | LinVB | 9:25 | Salomo atongisi ndako mpo ya makalo nkoto zomi ma farasa ya ye ; azalaki mpe na batambwisi farasa nkoto zomi na ibale. Atindi yango o mboka inso basoda bazalaki mpe penepene na ye o Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 9:26 | Ayangeli bakonzi banso ut’o ebale Efrate tee mokili mwa ba-Filisti mpe tee ndelo ya Ezipeti. | |
II C | LinVB | 9:27 | Mokonzi asali makasi mpo ’te o Yeruzalem palata ekoma mingi lokola mabanga make, nzete ya sédere ikoma mpe mingi lokola nzete ya sikomore penepene na mbu. | |
II C | LinVB | 9:29 | Makambo masusu ma Salomo, ut’o maye ma yambo tee maye mya nsuka, makomami o buku ya Mikóló mya profeta Natan, o buku ya profeta Akia wa Silo mpe o buku ya momoni-makambo Yedo, esika asololi mambi ma Yeroboam, mwana wa Nebat. | |
Chapter 10
II C | LinVB | 10:1 | Roboam akei o Sikem, zambi ba-Israel banso bakendeki o Sikem mpo ya kolubola ye mokonzi. | |
II C | LinVB | 10:2 | Yeroboam, mwana wa Nebat, ayoki yango ntango azalaki naino o Ezipeti, esika akimaki mpo afanda mosika na mokonzi Salomo. Bongo alongwi o Ezipeti. | |
II C | LinVB | 10:3 | Batindi bato mpo ya kobenga ye ; ayei elongo na ba-Israel banso. Balobi na Roboam : | |
II C | LinVB | 10:4 | « Tata wa yo amemisaki biso mokumba monene ; yo sikawa longola ndambo ya mosala makasi mpe mokumba bozito tata wa yo atielaki biso, bongo tokosalela yo. » | |
II C | LinVB | 10:5 | Roboam alobi na bango : « Bokende naino kofanda mikolo misato, na nsima bozonga epai ya ngai. » Bango bakei. | |
II C | LinVB | 10:6 | Mokonzi Roboam abengi bankumu, baye bazalaki kosalela tata wa ye Salomo, atuni bango : « Bokanisi nini ? Napesa bango eyano nini ? » | |
II C | LinVB | 10:7 | Bazongisi : « Soko osali bango malamu, soko oyokisi bango esengo mpe olobi na bango maloba ma boboto, bakosalela yo seko. » | |
II C | LinVB | 10:8 | Kasi Roboam aboyi kolanda malako ma bankumu mpe atuni bilenge ba mboka, baye bakolaki na ye esika yoko mpe bazalaki kosalela ye. | |
II C | LinVB | 10:9 | Atuni bango : « Bino bokanisi nini ? Eyano nini nakoki kopesa bato balobaki na ngai : ‘Longola ndambo ya mosala makasi tata wa yo atindaki biso’ ? » | |
II C | LinVB | 10:10 | Bilenge, baye bakolaki na ye esika yoko, bazongiseli ye : « Bato balobaki na yo : “Tata wa yo amemisaki biso mokumba monene, kasi yo longola ndambo ya mosala makasi”, oyanola bango : Mosapi mwa ngai moke moleki loketo la tata wa ngai na bonene ! | |
II C | LinVB | 10:11 | Tata wa ngai amemisaki bino mokumba monene, ngai nakobakisa naino bozito ; tata wa ngai azalaki kobete bino fimbo, ngai nakobete bino fimbo na nzube ya bibende. » | |
II C | LinVB | 10:12 | Nsima ya mikolo misato Yeroboam na bato ba ye bayei epai ya Roboam, mpo alobaki na bango : « Bozonga epai ya ngai nsima ya mikolo misato. » | |
II C | LinVB | 10:14 | Andimi lilako lya bilenge mpe alobi na bango : « Tata wa ngai amemisaki bino mokumba bozito, ngai nakobakisa naino bozito ; tata wa ngai abeteki bino fimbo, ngai nakobete bino fimbo na nzube ya bibende. » | |
II C | LinVB | 10:15 | Mokonzi aboyi koyoka maloba ma bato ; yango elakisi boniboni Nzambe akoti o likambo mpo ’te akokisa liloba atiaki o monoko mwa Akia wa Silo, oyo alobaki na Yeroboam, mwana wa Nebat. | |
II C | LinVB | 10:16 | Awa mokonzi aboyi kondima maloba ma ba-Israel, bazongiseli ye maloba maye : « Biso na Davidi, bondeko bosili ! Biso tokowela biloko bya mwana wa Yese te ! Bato ba Israel, bozonga o biema bya bino ! Sikawa, Davidi, yo moko obatela libota lya yo ! » Ba-Israel banso bazongi o biema bya bango. | |
II C | LinVB | 10:18 | Mokonzi Roboam atindeli bango Adoram, kapita wa bangamba, kasi bana ba Israel babwakeli ye mabanga mpe babomi ye. Mokonzi Roboam abuti likalo noki mpe akimi o Yeruzalem. | |
Chapter 11
II C | LinVB | 11:1 | Roboam akei o Yeruzalem, abengi bato banso ba libota lya Yuda mpe lya Benyamin. Asangisi basoda ba mpiko nkoto monkama na ntuku mwambe mpo ya kobundisa ba-Israel, mpo ’te bokonzi bozonga o maboko ma Roboam. | |
II C | LinVB | 11:3 | « Loba na Roboam, mwana wa Salomo, mokonzi wa Yuda, mpe na bato banso ba libota lya Yuda mpe lya Benyamin : | |
II C | LinVB | 11:4 | Yawe alobi boye : Botika kobundisa bandeko ba bino ; banso bozonga o mboka, moto na moto o ndako ya ye ! Ngai moko nalingaki ’te bokabwana lelo. » Bayoki liloba lya Yawe, bazongi mpe bakei kobundisa Yeroboam te. | |
II C | LinVB | 11:5 | Roboam azalaki kofanda o Yeruzalem, mpe atongi bingumba bizi-ngami na lopango o Yuda. | |
II C | LinVB | 11:10 | Sorea, Ayalon na Ebron ; akomisi byango bingumba bizingami na mapango o mokili mwa Yuda mpe mwa Benyamin. | |
II C | LinVB | 11:11 | Alendisi byango mpe atii bayangeli na mpe biloko mingi bya bolei, na mafuta na vino. | |
II C | LinVB | 11:12 | O engumba eye yoko yoko nguba na makongo mazalaki. Alendisi mboka ina. Bongo azalaki kokonza bato ba Yuda mpe ba Benyamin. | |
II C | LinVB | 11:13 | Banganga Nzambe na ba-Levi, baye bazalaki bipai binso o Israel batiki mokili mwa bango mpo bafanda penepene na ye. | |
II C | LinVB | 11:14 | Ba-Levi batiki bisobe na biloko bya bango mpe bakei o mokili mwa Yuda mpe o Yeruzalem, mpo Yeroboam na bana ba ye balongolaki bango o mosala mwa bonganga bwa Yawe. | |
II C | LinVB | 11:15 | Yeroboam aponi banganga Nzambe mpo ya mosala o ndako ya bikeko bya ye, bikeko bya ntaba mpe bya ngombe, biye ye moko atulaki. | |
II C | LinVB | 11:16 | Kasi bato ba mabota manso ma Israel, baye bazalaki koluka Yawe Nzambe wa Israel na motema moko, bakei o Yeruzalem kobonzela Yawe, Nzambe wa bankoko ba bango, miboma. | |
II C | LinVB | 11:17 | Bango balendisi bokonzi bwa Yuda mpe balandi Roboam, mwana wa Salomo, mibu misato, mpo azalaki kolanda nzela ya Davidi na Salomo mibu misato. | |
II C | LinVB | 11:18 | Roboam abali Makalat, mwana wa Yerimot, nkoko wa Davidi, oyo abalaki Abigail, mwana wa Eliab, nkoko wa Yese. | |
II C | LinVB | 11:20 | Nsima ya ye abali Maaka, mwana wa Absalom ; ye mama wa Abia, Atai, Ziza na Selomit. | |
II C | LinVB | 11:21 | O kati ya basi na bamakango ba ye banso, Roboam apusi kolinga Maaka, mwana wa Absalom ; Roboam azalaki na basi zomi na mwambe mpe na bamakango ntuku motoba ; abotaki na bango bana babali ntuku ibale na mwambe na bana basi ntuku motoba. | |
II C | LinVB | 11:22 | Roboam aluboli Abia, mwana wa Maaka, mokonzi wa bandeko ba ye, moto wa yambo wa bango, zambi alingi ’te oyo akitana ye. | |
Chapter 12
II C | LinVB | 12:1 | O ntango bokonzi bwa ye bokomi kolenda, Roboam atiki kolanda Mobeko mwa Yawe, mpe abendi ba-Israel banso o nzela ya ye. | |
II C | LinVB | 12:2 | O mobu mwa mitano mwa bokonzi bwa Roboam, Sesonk, mokonzi wa Ezipeti, ayei kobundisa bato ba Yeruzalem, mpo baboyaki Yawee, | |
II C | LinVB | 12:3 | Ayei na makalo nkoto yoko na nkama ibale, bato ba farasa nkoto ntuku motoba, mpe na limpinga linene lya basoda ba Libya, ba Suk mpe ba Kus ; bauti na ye o Ezipeti. | |
II C | LinVB | 12:5 | Profeta Semaya akei epai ya Roboam mpe epai ya bakonzi ba Yuda, baye bakimaki o Yeruzalem ntango Sesonk azalaki koya, alobi na bango : « Yawe alobi : Bino boboyi ngai, yango wana ngai mpe natiki bino o maboko ma Sesonk. » | |
II C | LinVB | 12:7 | Emoni Yawe ’te bamikitisi, alobi na Semaya maloba maye : « Nakoboma bango te, mpo bamikitisi ; etikali moke nabikisa bango, mpe nakopesa Yeruzalem etumbu enene te na maboko ma Sesonk. | |
II C | LinVB | 12:8 | Nzokande bakozala baombo ba ye mpo bayeba litomba nini bakozwa na bosaleli ngai to na bosaleli bakonzi ba mikili misusu. » | |
II C | LinVB | 12:9 | Sesonk, mokonzi wa Ezipeti, akei kobundisa Yeruzalem. Alongoli biloko binso bya motuya o Tempelo ya Yawe, na mpe biloko o ndako ya mokonzi. Abotoli biloko binso nye, na mpe nguba ya wolo iye Salomo atulisaki. | |
II C | LinVB | 12:10 | O esika ya yango mokonzi Roboam atulisi nguba ya mbengi, iye apesi o maboko ma basoda bakoke-ngeleke ezibeli ya ndako ya mokonzi. | |
II C | LinVB | 12:11 | Mbala inso mokonzi azalaki kokoto o Tempelo ya Yawe, basoda bakamati nguba ina, mpe na nsima bazongisi yango o ndako ya bakengeli. | |
II C | LinVB | 12:12 | Awa mokonzi amikitisaki o miso ma Yawe, Yawe atiki nkanda ya ye mpe asilisi ye mobimba te ; ya solo, o Yuda makambo masusu mazalaki kosepelisa bato. | |
II C | LinVB | 12:13 | Roboam alendisi bokonzi bwa ye o Yeruzalem mpe ayangeli ekolo. O ntango Roboam akomi mokonzi, akokisi mibu ntuku inei na moko, mpe ayangeli ekolo mibu zomi na nsambo o Yeruzalem, engumba Yawe aponoki o kati ya mabota manso ma Israel mpo ’te Nkombo ya ye ezala wana. Nkombo ya mama wa ye Naama, moto wa ekolo Amon. | |
II C | LinVB | 12:15 | Makambo masusu ma Roboam, ut’o maye ma liboso tee maye ma nsuka, makomami o buku ya Bikela bya profeta Semaya mpe o buku ya momoni-makambo Ido. Bitumba bizalaki ntango inso kati ya Roboam na Yeroboam. | |
Chapter 13
II C | LinVB | 13:2 | Ayangeli ekolo mibu misato o Yeruzalem. Nkombo ya mama wa ye : Mikaya, mwana wa Uriel wa Gibea. Etumba ezalaki kati ya Abia na Yeroboam. | |
II C | LinVB | 13:3 | Abia asangisi limpinga lya basoda ba mpiko nkoto nkama inei, mpe Yeroboam akei kobunda na ye elongo na basoda ba mpiko nkoto nkama mwambe. | |
II C | LinVB | 13:4 | Awa Abia atelemi o ngomba Semaraim, o ngomba ya Efraim, agangi : « E Yeroboam na bino ba-Israel banso, boyoka ngai. | |
II C | LinVB | 13:5 | Bino boyebi malamu ’te Yawe Nzambe wa biso apesi Davidi na bana ba ye bokonzi bwa Israel seko ; akati na bango bondeko bokoumela seko. | |
II C | LinVB | 13:6 | Kasi Yeroboam, mwana wa Nebat, oyo azalaki mosaleli wa Salomo, mwana wa Davidi, atomboki na mokonzi wa ye. | |
II C | LinVB | 13:7 | Bato ba nkanza mpe ba mobulu balandi ye mpe baboyi kotosa Roboam, mwana wa Salomo. Roboam azalaki se mwana, moto wa motema motau ; yango wana akokaki bango te. | |
II C | LinVB | 13:8 | Sikawa bokanisi ’te bokoki koboya bokonzi bwa Yawe, awa akokaba bwango o maboko ma bana ba Davidi, mpo bozali bato ebele mpe na bikeko bya ngombe bya wolo, biye Yeroboam asalaki mpo bizala banzambe ba bino. | |
II C | LinVB | 13:9 | Bino bato bobenganaki banganga Nzambe ba Yawe, bana ba Arone na ba-Levi. Boponoki banganga Nzambe se lokola bato ba bikolo bisusu bakoponoko bango. Moto ata nani alingi kokoma nganga Nzambe, soko ayei na ngombe mobali mpe na mpata babali nsambo, akomi bongo nganga Nzambe wa baye bazali banzambe te. | |
II C | LinVB | 13:10 | Yawe azali Nzambe wa biso, totiki ye te. Bobele bana ba Arone bazali banganga Nzambe, mpe ba-Levi bakosalisaka bango ! | |
II C | LinVB | 13:11 | Ntongo na mpokwa inso bakobonzelaka Yawe mabonza ma kotumba, bakotumbaka mpaka ya malasi, bakotiaka mampa ma mabonza o meza peto, mpokwa inso bakopelisaka miinda o bitemiseli bya mwinda, zambi biso tokotosaka mibeko mya Yawe Nzambe wa biso, kasi bino botiki ye. | |
II C | LinVB | 13:12 | Nzambe akokamba biso, tozali mpe na banganga Nzambe ba ye ; bango bakobete mindule o ntango tolingi kobanda etumba na bino, bato ba Israel. Bobunda etumba na Yawe Nzambe wa bankoko ba bino te, zambi ekosukela bino mabe. » | |
II C | LinVB | 13:13 | Yeroboam atindi basoda basusu bakende kobombama nsima ya basoda ba Yuda. Ba-Israel bazalaki o boso bwa ba-Yuda, nzokande basoda basusu bazalaki nsima ya bango. | |
II C | LinVB | 13:14 | Ba-Yuda batali nsima, bamoni ’te banguna bazalaki o boso mpe o nsima ya bango. Babeleli Yawe mpe banganga Nzambe babeti mindule. | |
II C | LinVB | 13:15 | Basoda ba Yuda bagangi makasi mpo ya koba-nda etumba. Ezalaki bango koganga, Nzambe akweisi Yeroboam na ba-Israel banso o miso ma Abia na ba-Yuda. | |
II C | LinVB | 13:17 | Abia na bato ba ye bakweisi bango. Ba-Israel nkoto nkama itano, banso basoda ba mpiko, bakufi na mopanga. | |
II C | LinVB | 13:18 | O eleko ena bana ba Israel bakwei mpe bato ba Yuda balongi, zambi batiaki mitema na Yawe Nzambe wa bankoko ba bango. | |
II C | LinVB | 13:19 | Abia alandi Yeroboam mpe abotoli ye Betel, Yesana na Efron na mpe mboka ike ya penepene. | |
II C | LinVB | 13:20 | O mikolo mya Abia, bokasi bwa Yeroboam bokomi kosila. Yawe abeti ye, bongo Yeroboam akufi. | |
II C | LinVB | 13:21 | Abia azalaki kolenda ; abali basi zomi na banei mpe aboti bana babali ntuku ibale na babale mpe bana basi zomi na motoba. | |
II C | LinVB | 13:22 | Makambo masusu ma Abia, ezalela mpe misala mya ye, makomami o buku ya mateya ma profeta Ido. | |
Chapter 14
II C | LinVB | 14:2 | Alongoli bitumbelo na bisika bya kokumisa banzambe ba bampaya. Abuki mabanga mpe akati makonzi ma bikeko. | |
II C | LinVB | 14:3 | Atindi bato ba Yuda ’te baluka se Yawe Nzambe wa bankoko ba bango, batosa Mobeko mpe bitinda bya ye. | |
II C | LinVB | 14:4 | O mboka inso ya Yuda alongoli bisika bya kokumisa banzambe ba bampaya mpe bitumbelo bya mpaka ya malasi. Bongo o eleko ye azalaki mokonzi, ekolo epemi. | |
II C | LinVB | 14:5 | Alendisi bibombamelo o Yuda, mpo akomisi ekolo nye. O mibu mina bitumba bizalaki te, zambi Yawe apesi ye boboto. | |
II C | LinVB | 14:6 | Alobi na bato ba Yuda : « Tolendisa bingumba biye, tozinga byango na lopango lonene mpe na manongi, totia bizibeli na bikangeli ; mokili mozali naino o maboko ma biso, zambi toluki Yawe Nzambe wa biso, mpe bipai binso Yawe abateli biso mpe apesi biso boboto. » Baba-ndi mosala mwa bolendisi bingumba tee basilisi mwango. | |
II C | LinVB | 14:7 | Asa azalaki na basoda ba Yuda nkoto nkama isato, baye bazalaki na nguba mpe na liko-ngo ; azalaki mpe na basoda ba Benyamin nkoto nkama ibale na ntuku mwambe, baye bazalaki na nguba mpe na litimbo. Banso bazalaki basoda ba mpiko. | |
II C | LinVB | 14:8 | Zera, moto wa Kus, ayei na basoda nkoto na nkoto mpe na makalo nkama isato ; bakomi o Maresa. | |
II C | LinVB | 14:9 | Asa akei kozwana na ye ; babongisi milo-ngo mya bango mpo ya etumba o lobwaku la Sefata, penepene na Maresa. | |
II C | LinVB | 14:10 | Asa abondeli Yawe Nzambe wa ye, alobi : « E Yawe, bobele yo okosalisaka ná moto makasi ná moto motau. E Yawe Nzambe wa biso, salisa biso ! Totii mitema se na yo, mpe toyei awa o nkombo ya yo mpo tobunda etumba na bato ebele ; e Yawe, yo ozali Nzambe wa biso. Ondima te ’te moto moko akoka na yo ! » | |
II C | LinVB | 14:11 | Yawe akweisi bato ba Kus o etumba na bato ba Asa mpe ba Yuda ; bato ba Kus bakimi. | |
II C | LinVB | 14:12 | Asa na bato ba ye balandi bango tee Gerar. Bato ba Kus bakufi mingi mpenza, bongo bakoki kokoba etumba te ; Yawe na bato ba ye bakweisaki bango. Bato ba Asa babotoli biloko ebele o etumba. | |
II C | LinVB | 14:13 | Babotoli mpe bingumba binso penepene na Gerar, mpo Nsomo ya Yawe enyataki yango. Bingumba biye bizalaki na biloko mingi ; bayibi byango binso. | |
Chapter 15
II C | LinVB | 15:2 | Akei kokutana na Asa, alobi na ye : « Asa na bino banso bato ba Yuda mpe ba Benyamin, boyoka ngai ! Yawe azali na bino soko bino bozali na ye. Soko boluki ye, akomilakisa na bino ; soko botiki ye, ye mpe akotika bino. | |
II C | LinVB | 15:3 | Mikolo mingi Israel akozala na Nzambe wa solo te, na banganga Nzambe mpe te mpo bateya bato, na Mobeko mpe te. | |
II C | LinVB | 15:4 | Kasi o ntango ya mpasi bato bazongeli Yawe Nzambe wa Israel, baluki ye mpe Yawe akutani na bango. | |
II C | LinVB | 15:5 | O mikolo mina bato bazangi boboto, mpe makambo ma nsomo makweli bato banso ba mokili. | |
II C | LinVB | 15:6 | Babundi bitumba, ekolo na ekolo, engumba na engumba ; Nzambe ayokisi bango mpasi ndenge na ndenge. | |
II C | LinVB | 15:7 | Kasi bino, bozala na mpiko, bolembe te, zambi soko bokosala makasi bokozwa mbano. » | |
II C | LinVB | 15:8 | Eyoki Asa maloba mana ma profeta, akani kolongola bikeko bya nsomo o mokili mobimba mwa Yuda mpe mwa Benyamin mpe o bingumba binso abotoloki epai ya ngomba ya Efraim. Abongisi altare ya Yawe, eye ezalaki o boso bwa Ekoteli ya Tempelo. | |
II C | LinVB | 15:9 | Asangisi bato banso ba Yuda mpe ba Benyamin, bato ba Efraim, Manase na Simeon, bafandi o mokili mwa bango, zambi ba-Israel baike balandaki Asa o mikolo bamonoki ’te Yawe Nzambe wa ye azalaki na ye. | |
II C | LinVB | 15:10 | Banso basangani o Yeruzalem o sanza ya isato ya mobu mwa zomi na mitano mwa bokonzi bwa Asa. | |
II C | LinVB | 15:11 | O mokolo mona babonzeli Yawe nyama isusu babotoloki o etumba : ngombe nkama nsambo na mpata nkoto nsambo. | |
II C | LinVB | 15:12 | Bakanisi lisusu Bondeko, mpe na motema moko mpe na mayele manso bakani kozongela Yawe, Nzambe wa bankoko ba bango. | |
II C | LinVB | 15:13 | Balobi ’te bakoboma moto oyo aboyi kosalela Yawe Nzambe wa Israel, azala moto monene to moke, mobali to mwasi. | |
II C | LinVB | 15:15 | Bato banso ba Yuda basepeli ndai eye balayaki na motema mobimba. Awa bazalaki koluka Yawe na motema moko, Yawe asalisi bango mpe apesi bango bopemi kin’o ndelo inso ya mokili mwa bango. | |
II C | LinVB | 15:16 | Mokonzi Asa abotoli mama nkoko wa ye Maaka nkombo ya lokumu la Mama Mokonzi, zambi asalaki ekeko ya nsomo ya Asera. Asa abuki ekeko ena ya nsomo, abomi yango mpe atumbi yango o lobwaku la Kedron. | |
II C | LinVB | 15:17 | Kasi bitumbelo bitikali o Israel. Nzokande o bomoi bwa ye mobimba Asa apesi Yawe motema mwa ye. | |
II C | LinVB | 15:18 | Atii o Tempelo mabonza masantu ma tata wa ye mpe ma ye moko : wolo, palata na biloko bisusu. | |
Chapter 16
II C | LinVB | 16:1 | O mobu mwa ntuku isato na motoba mwa bokonzi bwa Asa, Basa mokonzi wa Israel akei kobundisa bato ba Yuda. Atongi lopango makasi zongazonga na Rama mpo ya kokangela Asa, mokonzi wa Yuda, nzela. | |
II C | LinVB | 16:2 | Asa akamati palata na wolo izalaki o ebombelo ya Tempelo ya Yawe mpe o ndako ya mokonzi, atindi yango epai ya Ben-Adad, mokonzi wa Aram, oyo afandi o Damasko. Alobi na ye : | |
II C | LinVB | 16:3 | « Biso na yo toyokana lokola batata ba biso bayokanaki. Natindeli yo palata na wolo. Yango wana boma bondeko okataki na Basa, mokonzi wa Israel, mpo atika kobundisa ngai. » | |
II C | LinVB | 16:4 | Ben-Adad andimeli mokonzi Asa mpe atindi bakomanda ba basoda ba ye bakende kobundisa bingumba bya Israel. Babotoli Iyon, Dan, Abel-Maim na bingumba bya Neftali esika bazalaki kobomba biloko. | |
II C | LinVB | 16:6 | Na nsima mokonzi Asa abengi bato banso ba Yuda ; balongoli mabanga na mabaya, maye Basa azwaki mpo ya kolendisa Rama, mpe batongi na mango lopango o Geba mpe o Mispa. | |
II C | LinVB | 16:7 | O mikolo mina, Kanani, momoni-makambo, akei epai ya Asa, mokonzi wa Yuda. Alobi na ye : « Awa oluki lisalisi epai ya mokonzi wa Aram mpe otii motema na Yawe Nzambe wa yo te, basoda ba mokonzi wa Aram bakotika yo. | |
II C | LinVB | 16:8 | Basoda ba Kus na basoda ba Libya bazalaki na makalo mpe na basoda ba farasa mingi, nzokande Yawe akabaki bango o maboko ma yo, mpo otiaki motema na ye. | |
II C | LinVB | 16:9 | Yawe akotambwisa miso ma ye bipai binso mpo ’te asalisa bato bamipesi baye na ye mobimba. O likambo lyango omilakisi lokola zoba mpenza. Yango wana banda lelo bakobundisa yo lisusu. » | |
II C | LinVB | 16:10 | Asa asilikeli momoni-makambo mpe akotisi ye o boloko, mpo ayokeli ye nkanda enene. O mikolo mina Asa anyokoli naino bato basusu o ekolo ya ye. | |
II C | LinVB | 16:11 | Makambo masusu ma Asa, ut’o maye ma liboso tee maye ma nsuka, makomami o buku ya Bakonzi ba Yuda mpe ba Israel. | |
II C | LinVB | 16:12 | O mobu mwa ntuku isato na libwa mwa bokonzi bwa ye, Asa akomi kobele makasi o makolo. Ata o ntango ya bokono bwa ye, aluki lisalisi epai ya Yawe te, kasi bobele epai ya banganga. | |
II C | LinVB | 16:13 | Asa akei kokutana na bankoko ba ye, awei o mobu mwa ntuku inei na moko mwa bokonzi bwa ye. | |
Chapter 17
II C | LinVB | 17:2 | Atii basoda o bibombamelo binso bya Yuda, mpe bayangeli o mokili mwa Yuda mpe bingumba bya Efraim, biye tata wa ye Asa abotoloki. | |
II C | LinVB | 17:3 | Yawe azalaki na Yozafat, mpo azalaki kolanda nzela eye tata wa ye alandaki o ebandela, akumbameli ba-Baal te. | |
II C | LinVB | 17:4 | Azalaki bobele koluka Yawe Nzambe wa tata wa ye, alandi mibeko mya ye mpe amekoli ba-Israel te. | |
II C | LinVB | 17:5 | Yawe alendisi bokonzi bwa ye. Ba-Yuda banso bazalaki kofuta ye mpako ; yango wana akomi moto wa nkita mpe wa lokumu lonene. | |
II C | LinVB | 17:6 | Motema mwa ye mokobi kolanda nzela ya Yawe, bongo alongoli o Yuda bisika binso bya kokumisa banzambe basusu, abomi mpe makonzi manso ma bikeko. | |
II C | LinVB | 17:7 | O mobu mwa misato mwa bokonzi bwa ye atindi bankumu ba ye Ben-Kail, Obadia, Zekaria, Netanel na Mikaya o bingumba bya Yuda mpo ’te bateya bato. | |
II C | LinVB | 17:8 | Atindi mpe ba-Levi Semaya, Netania, Zebadia, Asael, Semiramot, Yonatan, Adonia, Tobia na Tob-Adonia mpe banganga Nzambe Elisama na Yoram. | |
II C | LinVB | 17:9 | Babandi koteya o Yuda, Mobeko mwa Yawe o maboko ; bakei koteya bato o bingumba binso bya Yuda. | |
II C | LinVB | 17:10 | Nsomo ya Yawe ekweli bikolo binso penepene na Yuda, moto moko te aluki kobundisa Yozafat. | |
II C | LinVB | 17:11 | Ba-Filisti bayeli Yozafat mabonza, bafuti ye mpe mosolo ; ba-Arabu bapesi ye bibwele : mpata babali nkoto nsambo na nkama nsambo na ntaba babali nkoto nsambo na nkama nsambo. | |
II C | LinVB | 17:12 | Bongo Yozafat akomi makasi mpe atongi o Yuda bibombamelo bya basoda na bibombelo bya biloko. | |
II C | LinVB | 17:13 | Azalaki kobomba biloko ebele o bingumba bya Yuda, mpe azalaki na basoda ba mpiko o Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 17:14 | Batangi bango libota na libota : O libota lya Yuda komanda Adna azalaki koyangela basoda ba mpiko nkoto nkama isato. | |
II C | LinVB | 17:15 | Baye balandi ye, komanda Yokanan, moyangeli wa basoda nkoto nkama ibale na ntuku mwambe, | |
II C | LinVB | 17:16 | na Amasia, mwana wa Zikri, oyo andimi kosala mosala mwa Yawe, azalaki komanda wa basoda ba mpiko nkoto nkama ibale. | |
II C | LinVB | 17:17 | O libota lya Benyamin, soda moko wa mpiko mingi, Eliada, azalaki komanda wa basoda nkoto nkama ibale, banso bazalaki na litimbo mpe na nguba. | |
II C | LinVB | 17:18 | Moto alandi ye : Yozabad azalaki komanda wa basoda nkoto monkama na ntuku mwambe, banso bazalaki na bibuneli. | |
Chapter 18
II C | LinVB | 18:1 | Yozafat akomi moto wa nkita mpe wa lokumu lonene. Abali ndeko wa Akab, akomi semeki wa ye. | |
II C | LinVB | 18:2 | Nsima ya mwa mibu akei kotala Akab o Samaria. Akab abomeli ye na bato ba ye mpata na ngombe ebele mpo ’te andimisa Yozafat akende kobundisa Ramot o Galaad. | |
II C | LinVB | 18:3 | Akab, mokonzi wa Israel, alobi na Yozafat, mokonzi wa Yuda : « Olingi kokende na biso elongo mpo tobu-ndisa Ramot o Galaad ? » Ayanoli : « Ngai nakosala se lokola yo, bato ba ngai bakosala lokola bato ba yo ; tokozala na yo o ntango ya etumba. » | |
II C | LinVB | 18:5 | Mokonzi wa Israel asangisi baprofeta nkama inei, alobi na bango : « Tokende kobundisa Ramot o Galaad to tokende te ? » Bayanoli : « Kende, Nzambe akokaba bango o maboko ma mokonzi. » | |
II C | LinVB | 18:7 | Mokonzi wa Israel ayanoli Yozafat : « Moto mosusu azali, oyo akoki kotuna Yawe, kasi ngai nayini ye, mpo ata mbala yoko te asakoli malamu ma ngai, se makambo mabe. Nkombo ya ye Mikea, mwana wa Yimla. » Yozafat alobi : « Mokonzi, oloba bongo te ! » | |
II C | LinVB | 18:8 | Mokonzi wa Israel abengi mosaleli moko, alobi na ye : « Benga noki Mikea, mwana wa Yimla. » | |
II C | LinVB | 18:9 | Mokonzi wa Israel na Yozafat mokonzi wa Yuda balati bilamba bya lokumu mpe bakei kofanda, moto na moto o ngwende ya ye, o boso bwa ezibeli ya mboka. Baprofeta banso bazalaki kolendisana mpo ’te basakola makambo o miso ma bango. | |
II C | LinVB | 18:10 | Sedekia, mwana wa Kenana, oyo asalaki maseke ma bibende, alobi : « Yawe asakoli bongo : Na maseke maye okosilisa bato ba Aram tee moto wa nsuka. » | |
II C | LinVB | 18:11 | Baprofeta banso basakoli se bongo, balobi : « Kende o Ramot ya Galaad, mpe okolonga ! Yawe akokaba yango o maboko ma mokonzi. » | |
II C | LinVB | 18:12 | Ntoma oyo akendeki kobenga Mikea alobi na ye : « Baprofeta banso basakoli se monoko moko ’te mokonzi akolonga. Yo mpe oloba se lokola bango ! Osakola bobele makambo malamu ! » | |
II C | LinVB | 18:13 | Mikea alobi : « Lokola Yawe azali na bomoi, maloba Yawe akoloba, ngai mpe nakoloba mango ! » | |
II C | LinVB | 18:14 | Akomi epai ya mokonzi, oyo atuni ye : « Mikea, tokoki kokende kobundisa Ramot o Galaad to te ? » Ayanoli : « Bokende, bokolonga. Yawe akokaba yango o maboko ma bino. » | |
II C | LinVB | 18:15 | Mokonzi alobi na ye : « Mbala boni nalayisa yo ndai ’te oloba na ngai se makambo ma solo o nkombo ya Yawe ? » | |
II C | LinVB | 18:16 | Mikea asakoli boye : « Namoni ba-Israel banso bapanzani o ngomba lokola etonga ya mpata izangi mokengeli. Yawe alobi : Bazali na mokonzi lisusu te, bongo moto na moto azonga o mboka ya ye na boboto ! » | |
II C | LinVB | 18:17 | Mokonzi wa Israel alobi na Yozafat : « Omoni, nalobaki na yo te ’te moto oyo akosakolaka malamu ma ngai te, se makambo mabe ? » | |
II C | LinVB | 18:18 | Mikea alobi : « Yoka maloba ma Yawe : Namoni Yawe afandi o ngwende ya bokonzi. Banzelu banso ba likolo batelemi penepene na ye, epai ya mobali mpe epai ya mwasi. | |
II C | LinVB | 18:19 | Yawe atuni : “Nani akokosa Akab mpo ’te akende kobundisa Ramot o Galaad, bongo akufa kuna ?” Bazalaki kozongisa biyano ndenge na ndenge. | |
II C | LinVB | 18:20 | Na nsima anzelu moko abimi mpe atelemi o boso bwa Yawe, alobi : “Ngai moto nakokosa ye.” Yawe atuni ye : “Okosala ndenge nini ?” | |
II C | LinVB | 18:21 | Azongisi : “Nakokende mpe nakozala anzelu wa lokuta o monoko mwa baprofeta banso.” Yawe alobi na ngai : “Kende kokosa ye, okolonga. Kende mpe sala se bongo.” | |
II C | LinVB | 18:22 | Awa Yawe atii anzelu wa lokuta o monoko mwa baprofeta baye ba yo, elakisi ’te ye moko asakoli makambo mabe mpo ya yo. » | |
II C | LinVB | 18:23 | Sedekia, mwana wa Kenana, abelemi mpe abeti Mikea o litama, alobi na ye : « Anzelu wa Yawe alongwi epai ya ngai o nzela nini mpo aya koloba na yo ? » | |
II C | LinVB | 18:25 | Mokonzi wa Israel alobi : « Kanga Mikea mpe kaba ye o maboko ma Amon, moyangeli wa mboka, mpe ma Yoas, mwana wa mokonzi. | |
II C | LinVB | 18:26 | Yebisa bango : Mokonzi atindi ’te bokotisa moto oyo o boloko, bopesa ye se mwa mampa na mai tee mokolo nakozonga awa nzoto kolongonu. » | |
II C | LinVB | 18:27 | Mikea alobi na ye : « Soko obiki mpe ozongi nzoto kolongonu, okoyeba ’te Yawe alobaki na monoko mwa ngai te. » Na nsima abakisi : « Bino banso boyoka malamu. » | |
II C | LinVB | 18:29 | Mokonzi wa Israel alobi na Yozafat : « Ngai nakolata bilamba bya soda mpo nakende etumba. Kasi yo lata bilamba bya mokonzi. » Mokonzi wa Israel alati bilamba bya soda mpe akei etumba. | |
II C | LinVB | 18:30 | Mokonzi wa Aram apesaki bakomanda ba basoda ba makalo etinda eye : « Boluka moto mosusu te, boluka se kobunda na mokonzi wa Israel. » | |
II C | LinVB | 18:31 | Yango wana, awa bakomanda ba basoda ba makalo bamoni Yozafat, balobi : « Ntembe te, ye azali mokonzi wa Israel. » Bongo bazingi ye mpo ya kobundisa ye. Kasi Yozafat abandi koganga. Yawe asalisi ye mpe alongoli Yozafat o kati ya bango. | |
II C | LinVB | 18:32 | Bakomanda ba basoda ba makalo bamoni ’te ye azalaki mokonzi wa Israel te, bongo batiki kobunda na ye. | |
II C | LinVB | 18:33 | Kasi moto moko akamati litimbo lya ye mpo ya kobete monguna. Likula likoteli mokonzi wa Israel o kati ya mitako mikangisi molato mwa bibende. Mokonzi alobi na motambwisi likalo : « Kende mpembeni mpe longola ngai o esika ya etumba, mpo nazoki. » | |
Chapter 19
II C | LinVB | 19:2 | Yeku, mwana wa Kanani, momoni-makambo, akei kokutana na ye mpe atuni : « Mpo nini osalisi moto mabe, mpe olingi baye bayini Yawe ? Mpo ya likambo lyango nkanda ya Yawe ekokwela yo. | |
II C | LinVB | 19:3 | Solo, osalaki mpe makambo malamu, mpo otumbaki makonzi ma bikeko, olongolaki mango o mokili, mpe obongisaki motema mwa yo mpo ya koluka Nzambe. » | |
II C | LinVB | 19:4 | Yozafat afandi o Yeruzalem. Na nsima akei lisusu kotala bato ba ekolo ya ye, banda Berseba tee ngomba ya Efraim, mpe azongisi bato o nzela ya Yawe Nzambe wa bankoko ba bango. | |
II C | LinVB | 19:6 | Alobi na bazuzi : « Boyeba malamu nini bokosalaka : bosambisaka bato o nkombo ya bato te, kasi o nkombo ya Yawe, oyo azali na bino o ntango bokokata makambo. | |
II C | LinVB | 19:7 | Bobanga Yawe. Bosala mosala mwa bino na motema moko, zambi Yawe Nzambe wa biso andimi se makambo ma bosembo, akotalaka bilongi bya bato te, akoyambaka mpe mabonza te. » | |
II C | LinVB | 19:8 | O Yeruzalem Yozafat atii mpe ba-Levi, banganga Nzambe na bankumu ba mabota ma Israel mpo ’te bakata makambo o nkombo ya Yawe, mpe basambisa bato ba Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 19:9 | Apesi bango bitinda bya ye, alobi : « Bosala mosala mwa bino na bobangi Yawe, na bolandi mibeko mpe na motema moko. | |
II C | LinVB | 19:10 | Soko bandeko ba bino baye bafandi o bingumba, bayeli bino ata likambo nini, ezala likambo lya bobomi moto, ezala ntembe na etinda, mobeko to momeseno mwa mboka, boteya bango mateya ma solo mpo ’te bameme ngambo te o miso ma Yawe, bongo nkanda ya Yawe ekwela bino na bandeko ba bino te. Bosala se bongo mpe bokomeme ngambo te. | |
II C | LinVB | 19:11 | Amaria, nganga Nzambe mokonzi, azali kapita wa bino o makambo manso matali Yawe, mpe Zebadia, mwana wa Yismael, mokonzi wa libota lya Yuda, akosamba makambo manso matali mokonzi. Ba-Levi bakokoma makambo manso o minkanda. Bokokisa mosala mwa bino na mpiko. Yawe azala na moto wa bosembo ! » | |
Chapter 20
II C | LinVB | 20:2 | Bakei koyebisa Yozafat, balobi : « Basoda ebele bakoya kobundisa yo ; bakouta o ngambo ya mbu, o mokili mwa Edom ; tala, basili bakomi o Kasason-Tamar, eye ekomi En-Gadi. » | |
II C | LinVB | 20:4 | Bato ba Yuda basangani mpo bazwa lisalisi lya Yawe ; bauti o bingumba binso bya Yuda mpo ya kobondela Yawe. | |
II C | LinVB | 20:5 | Yozafat atelemi o likita lya bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem o Tempelo ya Yawe o boso bwa mbalasani ya sika. | |
II C | LinVB | 20:6 | Asambeli : « E Yawe Nzambe wa bankoko ba biso, yo ozali Nzambe kuna o likolo, yo moto okoyangelaka bakonzi ba bikolo binso. Nguya na bokasi bozali o loboko la yo ; mpe moto moko akoki na yo te. | |
II C | LinVB | 20:7 | Yo Nzambe wa biso, obenganaki bato bafandaki o mokili moye o miso ma bato ba yo Israel, mpe opesaki mokili moye seko na bankoko ba Abarama, ndeko wa yo. | |
II C | LinVB | 20:9 | Soko makambo ma mpasi makweli biso, kanisa : bitumba na mopanga, etumbu, bokono bobe to nzala, tokoya koteleme liboso lya Tempelo eye o miso ma yo, zambi Nkombo ya yo ezali o Tempelo eye. Awa tokobelela yo o ntango ya mpasi ya biso, okondimela biso mpe okobikisa biso. | |
II C | LinVB | 20:10 | Tala sikawa ba-Amon, ba-Moab na bato ba ngomba ba Seir bayei. Opesaki ba-Israel nzela ya kokoto o mokili mwa bango te o ntango babimaki o mokili mwa Ezipeti, yango wana balekaki se mpembeni mpe babomaki bango te. | |
II C | LinVB | 20:12 | E Nzambe wa biso, okopesa bango etumbu te ? Biso tozangi makasi o boso bwa bato ebele bayei kobunda na biso. Toyebi te boniboni tokoki kosala. Kasi miso ma biso se epai ya yo. » | |
II C | LinVB | 20:13 | Bato banso ba Yuda batelemi o miso ma Yawe, elongo na bandeko, basi mpe bana ba bango. | |
II C | LinVB | 20:14 | O kati ya bato basangani wana, elimo ya Yawe ekiteli Yakaziel, mwana wa Zekaria, nkoko wa Benaya, oyo Yekiel, mwana wa Matania abotaki, ye mo-Levi wa libota lya Asaf. | |
II C | LinVB | 20:15 | Agangi : « Bino banso bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem, mpe yo mokonzi Yozafat, botia matoi ! Yawe alobi : Bobanga te, boyoka mpe motema nsomo te mpo ya basoda ebele boye, zambi etumba eye ezali etumba ya bino te, kasi ya Nzambe. | |
II C | LinVB | 20:16 | Lobi bokende kobunda na bango. Bakoleka o ngomba Sis mpe bokozwana na bango o nsuka ya lobwaku penepene na eliki ya Yeruel. | |
II C | LinVB | 20:17 | Bino bokosengela kobunda te : bomilakisa na bango, boteleme wana mpe bokomono libiki Yawe akopesa bino. Bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem, bobanga te mpe boyoka nsomo te ! Bokende kokutana na bango lobi mpe Yawe akozala na bino. » | |
II C | LinVB | 20:18 | Yozafat akumbami, elongi o nse, se bongo bato banso ba Yuda mpe ba Yeruzalem bafukami mpe bakumbameli Yawe. | |
II C | LinVB | 20:19 | Ba-Levi, bana ba etuka ya Keat na bana ba etuka ya Kore, batelemi mpo bakumisa Yawe Nzambe wa Israel na mongongo makasi. | |
II C | LinVB | 20:20 | Batelemi na nta ntongo mpe bakei o eliki ya Tekoa. Ezalaki bango koleka, Yozafat atelemi mpe alobi na bango : « Bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem, boyoka ngai ! Botia mitema na Yawe Nzambe wa bino, mpe bokobika ; boyamba baprofeta ba ye, mpe bokolonga ! » | |
II C | LinVB | 20:21 | Ayokani na bato ba ye mpo batia bayembi liboso lya basoda bakokende etumba. Balata bilamba bya losambo, bakumisa Yawe mpe bayemba : « Bokumisa Yawe, azali nta bolingi, akotika biso te. » | |
II C | LinVB | 20:22 | O ntango babandi koyemba mpo ya kokumisa Nzambe, Yawe atieli ba-Amon, ba-Moab na bato ba ngomba ya Seir, baye bayaki kobundisa Yuda, motambo, bongo bamoni ’te bakwei. | |
II C | LinVB | 20:23 | Ba-Amon na ba-Moab bakei kobundisa bato ba ngomba ya Seir mpo ’te baboma bango. Esilisi bango koboma bato ba Seir, babandi kobomana. | |
II C | LinVB | 20:24 | Ekomi bato ba Yuda o nsonge ya ngomba, esika bakoki komono eliki, batali epai basoda ebele bazalaki. Talaka, ezalaki wana se bibembe bilali o nse, moto moko abiki te. | |
II C | LinVB | 20:25 | Yozafat na basoda ba ye bakei kobotolo bango biloko ; bakuti bibwele ebele, nkita, bilamba na biloko bya motuya. Babotoli biloko mingi, kasi bakoki komeme binso te. Mikolo misato balokoti byango, bizalaki mingi mpenza. | |
II C | LinVB | 20:26 | Mokolo mwa minei basangani o lobwaku la Bobenisi, zambi bakumisi Yawe o esika ena. Yango wana tee lelo bapesi lobwaku lona nkombo ’te ‘Bobenisi’. | |
II C | LinVB | 20:27 | Bato banso ba Yuda mpe ba Yeruzalem, Yozafat liboso, bazongi o Yeruzalem na esengo enene, zambi Yawe asalisi bango mpo balonga banguna. | |
II C | LinVB | 20:28 | Ntango bayingeli o Yeruzalem, babeti nzenze, lokombe na mindule tee bakomi o Tempelo ya Yawe. | |
II C | LinVB | 20:29 | Bobangi Nzambe bokoteli bakonzi banso ba bikolo, awa bayoki ’te Yawe alongaki banguna ba Israel. | |
II C | LinVB | 20:30 | Bongo bokonzi bwa Yozafat bozalaki kimia ; Nzambe apesi bango boboto o ndelo inso ya mokili mwa bango. | |
II C | LinVB | 20:31 | Yozafat, mwana wa Asa, ayangeli Yuda. Akokisi mibu ntuku isato na mitano o ntango akomi mokonzi ; ayangeli ekolo mibu ntuku ibale na mitano o Yeruzalem. Nkombo ya mama wa ye Azuba, mwana wa Silki. | |
II C | LinVB | 20:32 | Alandi ezalela ya tata wa ye Asa, atiki nzela ena te mpe asali se malamu o miso ma Yawe. | |
II C | LinVB | 20:33 | Nzokande bisika bya kokumisa banzambe basusu bikufaki te ; bato batii naino motema mobimba na Nzambe wa bankoko ba bango te. | |
II C | LinVB | 20:34 | Makambo masusu ma Yozafat, ut’o maye ma liboso tee maye ma nsuka, makomami o buku ya Bikela bya Yeku, mwana wa Kanani ; bakomi mango mpe o buku ya Bakonzi ba Israel. | |
II C | LinVB | 20:35 | Na nsima Yozafat, mokonzi wa Yuda, ayokani na Okozia, mokonzi wa Israel, oyo abendi ye o nzela ebe. | |
II C | LinVB | 20:36 | Ayokani na ye mpo ya kotonga masuwa makokende o Tarsis. Batongi masuwa o Esion-Geber. | |
Chapter 21
II C | LinVB | 21:1 | Yozafat akei kokutana na ba-Bankoko ba ye mpe bakundi ye esika yoko na bango o Engumba ya Davidi. Mwana wa ye Yoram akitani ye. | |
II C | LinVB | 21:2 | Yoram azalaki na bandeko, bana ba tata moko Yozafat. Nkombo ya bango : Azaria, Yekiel, Zekaria, Azaria, Mikael na Sefatia ; bango banso bana ba Yozafat, mokonzi wa Israel. | |
II C | LinVB | 21:3 | Tata wa bango akabelaki bango biloko ebele ya palata, wolo na biloko bisusu bya motuya ; apesaki bango mpe bibombamelo o Yuda ; kasi atikelaki Yoram bokonzi, mpo azalaki mwana wa yambo. | |
II C | LinVB | 21:4 | Awa Yoram akitani tata wa ye mpe bokonzi bwa ye bolendi, abomi bandeko ba ye banso na mopanga, na mpe bankumu basusu ba Israel. | |
II C | LinVB | 21:5 | Yoram akokisi mibu ntuku isato na mibale o ntango akomi mokonzi, mpe ayangeli ekolo mibu mwambe o Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 21:6 | Alandi ezalela ya bakonzi ba Israel se lokola bato ba libota lya Akab basalaki, mpo abalaki mwana wa Akab. Asali mabe o miso ma Yawe. | |
II C | LinVB | 21:7 | Kasi Yawe alingi koboma libota lya Davidi te, zambi akataki bondeko na Davidi, mpe alakelaki ye ’te akopesa ye na bana ba ye bokonzi seko. | |
II C | LinVB | 21:8 | O eleko ya ye ba-Edom balongwi o bokonzi bwa Yuda mpe baluboli mokonzi wa bango moko. | |
II C | LinVB | 21:9 | Yoram akei elongo na bakomanda ba ye banso mpe na makalo ma ye manso. Atelemi na butu mpe alongi ba-Edom, bazalaki kozinga ye na bakomanda ba makalo. | |
II C | LinVB | 21:10 | Ba-Edom baka-bwani na bokonzi bwa Yuda, tee lelo. O eleko ena bato ba Libna balongwi o bokonzi bwa ye, mpo atikaki Yawe Nzambe wa bankoko ba ye. | |
II C | LinVB | 21:11 | Ye moto atongi mpe bisika bya kokumisa banzambe basusu o ngomba ya Yuda. Abendi bato ba Yeruzalem o nzela ya bokumisi bikeko, mpe ayingisi bato ba Yuda o nzela ebe. | |
II C | LinVB | 21:12 | O ntango ena azwi monkanda mwa profeta Elia, mokomami boye : « Yawe Nzambe wa tata wa yo Davidi alobi : Awa olandi ezalela ya tata wa yo Yozafat mpe wa nkoko wa yo Asa, bakonzi ba Yuda, te, | |
II C | LinVB | 21:13 | kasi olandi ezalela ya bakonzi ba Israel, mpe obendi bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem o nzela ya bokumisi banzambe basusu, mpe olandi bongo ndakisa ya libota lya Akab, oyo akumisaki banzambe basusu, awa obomi mpe bandeko ba yo, bana ba tata wa yo, balekaki yo na bolamu, | |
II C | LinVB | 21:14 | Yawe akotindela ekolo ya yo, bana na basi ba yo etumbu enene, akobebisa mpe biloko bya yo binso. | |
II C | LinVB | 21:15 | Mpe yo okobele ; bokono bokoyokisa yo mpasi mingi o libumu mikolo minso ; misopo mikobima libanda. » | |
II C | LinVB | 21:16 | Yawe apesi ba-Filisti na ba-Arabu bafandi penepene na bato ba Kus, mayele mabe ma kobundisa Yoram. | |
II C | LinVB | 21:17 | Bakoti o mokili mwa Yuda mpe babotoli biloko binso bizalaki o ndako ya mokonzi, bakangi mpe bana na basi ba ye ; bongo atikali se na mwana wa nsuka Okozia. | |
II C | LinVB | 21:18 | Nsima ya makambo mana manso Yawe abelisi ye bokono bwa libumu, abiki na bwango lisusu te. | |
II C | LinVB | 21:19 | Mikolo mizalaki koleka mpe nsima ya mibu mibale, mpo ya bokono bona, misopo mya ye mibimi ; akufi o kati ya mpasi enene mpenza. Bato ba ekolo ya ye bapeliseli ye móto te, lokola bapelisaki mpo ya bankoko ba ye. | |
Chapter 22
II C | LinVB | 22:1 | Bato ba Yeruzalem baluboli Okozia, mwana wa ye wa nsuka, mokonzi o esika ya ye, zambi bato bayaki elongo na ba-Arabu babomaki bana basusu banso. Bongo Okozia, mwana wa Yoram, akomi mokonzi wa Yuda. | |
II C | LinVB | 22:2 | Akokisi mibu ntuku inei na mibale o ntango akomi mokonzi, ayangeli ekolo mobu moko o Yeruzalem. Nkombo ya mama wa ye Atalia, mwana wa Omri. | |
II C | LinVB | 22:3 | Ye mpe alandi nzela ya bato ba libota lya Akab, mpo mama wa ye apesaki ye malako mabe. | |
II C | LinVB | 22:4 | Asali mabe o miso ma Yawe lokola bato ba libota lya Akab, baye babebisaki ye na malako mabe, nsima ya liwa lya tata wa ye. | |
II C | LinVB | 22:5 | Alandi bobele malako ma bango mpe ayokani na Yoram, mwana wa Akab, mokonzi wa Israel mpo babundisa Azael, mokonzi wa Aram o Ramot ya Galaad. Kasi bato ba Aram bazokisi Yoram. | |
II C | LinVB | 22:6 | Bongo Yoram azongi o Yizreel mpo abika na mpota ba-Aram bazokisi ye o Ramot o etumba na Azael, mokonzi wa Aram. Bongo Okozia, mwana wa Yoram, mokonzi wa Yuda, akei o Yizreel, kotala Yoram, mwana wa Akab, oyo azoki. | |
II C | LinVB | 22:7 | Nzambe asali ’te baboma Okozia o ntango akei kotala Yoram. Ekomi ye kuna, abimi elongo na Yoram mpo ’te azwana na Yeku, mwana wa Nimsi, oyo Yawe apakolaki mafuta ma bokonzi mpo ya kosilisa libota lya Akab. | |
II C | LinVB | 22:8 | O ntango alukaki kosilisa libota lya Akab, Yeku akuti bankumu ba Yuda na bandeko ba Okozia, baye bazalaki basaleli o ndako ya Akab ; abomi bango banso. | |
II C | LinVB | 22:9 | Atindi bato bakende koluka Okozia. Bakangi ye o ntango amibombi o Samaria. Bakei na ye epai ya Yeku, mpe Yeku abomi ye. Bakundi ye, mpo balobi : « Azali nkoko wa Yozafat, oyo alukaki Yawe na motema moko. » O libota lya Okozia moto moko, oyo akoki na bokonzi, azalaki te. | |
II C | LinVB | 22:10 | Emoni Atalia, mama wa Okozia, ’te mwana wa ye akufi, abomisi bana banso ba libota lya mokonzi wa Yuda. | |
II C | LinVB | 22:11 | Kasi Yoseba, mwana wa mokonzi Yoram, alongoli Yoas, mwana wa Okozia, o kati ya bana ba mokonzi o ntango bazalaki koboma bango. Abombi ye elongo na mama mobokoli wa ye o ndako yoko ya kolala. Mpe bongo Yoseba, mwana wa mokonzi Yoram, mpe mwasi wa nganga Nzambe Yoyada (azalaki ndeko mwasi wa Okozia), alongoli ye o miso ma Atalia, bongo asali ’te baboma ye te. | |
Chapter 23
II C | LinVB | 23:1 | O mobu mwa nsambo, Yoyada abengi bakomanda ba basoda monkama, baye bakataki na ye bondeko : Azaria, mwana wa Yerokam, Yismael, mwana wa Yokanan, Azaria, mwana wa Obed, Maseya, mwana wa Adaya, Elisafat, mwana wa Zikri. | |
II C | LinVB | 23:2 | Bakatisi mokili mobimba mwa Yuda, basangisi ba-Levi ba bingumba bya Yuda na bakonzi ba bituka bya Israel lokola ; bakei na bango o Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 23:3 | Bato banso basangani kuna bakati bondeko na mokonzi o Tempelo ya Nzambe. Yoyada alobi na bango : « Mwana wa mokonzi, ye oyo. Ye asengeli kozala mokonzi lokola Yawe alobaki mpo ya bana ba Davidi. | |
II C | LinVB | 23:4 | Bokosala boye : Bokabwana na mangomba masato : lingomba lya liboso, banganga Nzambe na ba-Levi na bakengeli ba bizibeli babanda mosala o mokolo mwa Sabato, | |
II C | LinVB | 23:5 | lingomba lya mabale bakengele ndako ya mokonzi, mpe liye lya masato bakengele ezibeli ya Sur. Bato basusu banso bazala o libanda lya Tempelo ya Yawe. | |
II C | LinVB | 23:6 | Moto moko ayingela o Tempelo ya Yawe te, bobele banganga Nzambe na ba-Levi, baye bazali na mosala kuna, bango bakoki kokoto zambi basantisi bango ; banso bamemya mibeko mya Yawe. | |
II C | LinVB | 23:7 | Ba-Levi bakozinga mokonzi, moto na moto bibuneli o maboko. Soko moto alingi koyingela o Tempelo, boboma ye. Bozala pene na mokonzi bipai binso akokende. » | |
II C | LinVB | 23:8 | Ba-Levi na bato banso ba Yuda basali manso lokola nganga Nzambe Yoyada atindaki bango. Banso basangani, ná baye bazalaki kobanda mosala o Tempelo o mokolo mwa Sabato, ná baye basilisi ngala ya bango, mpo nganga Nzambe apesaki bango nzela ya kotika mosala mwa bango te. | |
II C | LinVB | 23:9 | Apesi bakomanda ba basoda monkama makongo na nguba ndenge na ndenge ya mokonzi Davidi, iye izalaki o Tempelo ya Yawe. | |
II C | LinVB | 23:10 | Atii bango banso, moto na moto likongo o maboko, banda litumu lya Sudi lya Tempelo tee epai ya Nordi, zongazonga na altare mpe na Tempelo mpo ’te bazinga mokonzi. | |
II C | LinVB | 23:11 | Na nsima babimisi mwana wa mokonzi, batii ye enkoti ya bokonzi o motó, mpe bapesi ye monkanda mwa bokonzi. Bongo baluboli ye mokonzi. Yoyada na bana ba ye bapakoli ye mafuta ma bokonzi mpe bagangi : « Mokonzi kuma ! » | |
II C | LinVB | 23:12 | Atalia ayoki makeléle ma bato bayei mbangu mpe babeteli mokonzi maboko. Akei mpe akuti bato epai ya Tempelo ya Yawe. | |
II C | LinVB | 23:13 | Atali mpe amoni ’te mokonzi atelemi o boso bwa ngwende ya bokonzi. Amoni bakomanda na baye babeti mindule bazalaki penepene na ye. Bato banso bazalaki kosepela mpe basusu bazalaki kobete mindule : bayembi bazalaki kobete biyembeli mpe kokamba nzembo ya lokumu. Atalia apasoli bilamba, agangi : « Bateki ngai e ! Bakosi ngai e ! » | |
II C | LinVB | 23:14 | Nganga Nzambe Yoyada abimisi bakomanda ba basoda monkama, alobi na bango : « Bobimisa Atalia o libanda lya lopango ! Oyo akolanda ye, baboma ye na mopanga », mpo nganga Nzambe alobaki : « Boboma ye o Tempelo ya Yawe te. » | |
II C | LinVB | 23:15 | Bakangi Atalia, mpe ntango akomi o ndako ya mokonzi mpo ayingela wana o epai farasa ikokotoko, babomi ye. | |
II C | LinVB | 23:16 | Yoyada atindi mokonzi Yoas na bato ba ekolo mobimba bakata bondeko na Yawe mpo ’te bazala ekolo ya Yawe. | |
II C | LinVB | 23:17 | Bato banso bakei o Tempelo ya Baal, babomi yango, babuki bitumbelo na bikeko mpe babomi Matan, nganga Nzambe wa Baal, o boso bwa bitumbelo bina. | |
II C | LinVB | 23:18 | Yoyada atindi lisusu banganga Nzambe na ba-Levi bakengele Tempelo ya Yawe. Davidi akabolaki bango na mangomba mpo ’te babonzela Yawe mabonza ma kotumba o Tempelo ; balanda milulu minso lokola mikomami o Mobeko mwa Moze, mpe bayemba nzembo na esengo lokola Davidi atindaki. | |
II C | LinVB | 23:19 | Atii bakengeli ba bizibeli bya Tempelo ya Yawe mpo ’te moto mbindo, ata ndenge nini, ayingela te. | |
II C | LinVB | 23:20 | Na nsima Yoyada elongo na bakomanda ba basoda monkama, bankumu ba mboka na bato banso, babimisi mokonzi o Tempelo ya Yawe. Banso bayingeli o ndako ya mokonzi epai ya ezibeli enene mpe bafandisi mokonzi o ngwende ya ye. | |
Chapter 24
II C | LinVB | 24:1 | Yoas akokisi mibu nsambo o ntango akomi mokonzi ; ayangeli ekolo mibu ntuku inei o Yeruzalem. Nkombo ya mama wa ye Sibia, moto wa Berseba. | |
II C | LinVB | 24:5 | Abengi banganga Nzambe na ba-Levi, alobi na bango : « Bokende o mboka inso ya Yuda, bokongolo mosolo o Israel mobimba mpo ’te mobu na mobu babongisa Tempelo ya Yawe Nzambe wa bino. Bosala mosala mona noki. » Kasi ba-Levi basali noki te. | |
II C | LinVB | 24:6 | Yango wana mokonzi abengi moyangeli wa bango Yoyada, atuni ye : « Mpo nini otindaki ba-Levi te ’te bakongolo mpako o Yuda mpe o Yeruzalem, lokola Moze, mosaleli wa Yawe, atindaki ba-Israel banso ’te bapesa yango mpo ya Ema ya Bondeko ? | |
II C | LinVB | 24:7 | Atalia, mwasi mabe oyo, ye na bana ba ye, babuki ezibeli ya Tempelo, mpe na mabonza masantu ma Tempelo bakumisaki ba-Baal. » | |
II C | LinVB | 24:8 | Mokonzi atindi ’te basala sanduku mpe batia yango o libanda, o ezibeli ya Tempelo ya Yawe ; | |
II C | LinVB | 24:9 | basakola o Yuda mpe o Yeruzalem ’te bato basengeli kopesa Yawe mpako eye Moze, mosaleli wa Nzambe, atindaki ba-Israel o eliki. | |
II C | LinVB | 24:10 | Bankumu na bato banso basepeli mingi ; bayei na mosolo mokoki. Batondisi sanduku meke. | |
II C | LinVB | 24:11 | Ekoki ntango ya komeme sanduku epai ya ba-Levi bazalaki koyangela makambo ma mokonzi, mpe emoni ba-Levi ’te mosolo mokomi mingi, mokomi minkanda wa mokonzi na mosaleli moko wa nganga mokonzi bayei, balongoli mosolo o sanduku ; na nsima bazongisi mwango o esika ezalaki. Basali bongo mokolo na mokolo, mpe bazwi mosolo mingi. | |
II C | LinVB | 24:12 | Mokonzi na Yoyada bapesi mwango na kapita oyo azalaki kotala misala mya Tempelo ya Yawe. Bafuti baye bakokata mabanga na basali, baye bakobongisa Tempelo na baye bakotula bibende na mbengi mpo ya kobongisa Tempelo ya Yawe. | |
II C | LinVB | 24:13 | Eba-ndi basali mosala, mosala mwa bobo-ngisi motamboli se malamu ; batongi Tempelo ya Yawe lokola ezalaka liboso mpe balendisi yango. | |
II C | LinVB | 24:14 | Esilisi bango misala, bapesi mokonzi na mpe Yoyada mosolo motikali, basali na mwango bisaleli bya Tempelo ya Yawe, biloko bya mosala mpe bya mabonza ma kotumba, mbeki na bisaleli bya wolo na palata. Bazalaki kobonza bongo o Tempelo ya Yawe mikolo minso, bomoi mobimba bwa Yoyada. | |
II C | LinVB | 24:15 | Yoyada akomi mobange mpe akokisi mibu mya ye, na nsima awei. O mokolo mwa liwa lya ye akokisi mibu monkama na ntuku isato. | |
II C | LinVB | 24:16 | Bakundi ye o Engumba ya Davidi esika yoko na bakonzi, mpo asalaki mosala malamu o Israel, asaleli Nzambe malamu, mpe abongisi Tempelo ya ye. | |
II C | LinVB | 24:17 | Nsima ya liwa lya Yoyada bakomanda ba Yuda bayei kofukamela mokonzi, mpe mokonzi ayoki bango. | |
II C | LinVB | 24:18 | Batiki Tempelo ya Yawe, Nzambe wa bankoko ba bango, mpe bakumisi makonzi ma bikeko. Yango wana Nzambe ayoki nkanda mpe apesi Yuda na mpe Yeruzalem etumbu, mpo ya lisumu lyango linene. | |
II C | LinVB | 24:19 | Atindeli bango baprofeta mpo ’te bazongela Yawe, kasi balingi koyoka maloba ma bango te. | |
II C | LinVB | 24:20 | Elimo ya Nzambe ekiteli Zakaria, mwana wa Yoyada. Ye atelemi liboso lya bato, alobi na bango : « Nzambe alobi : Mpo nini bobuki mibeko mya Yawe ? Bokosuka mabe. Awa botiki Yawe, ye mpe akotika bino. » | |
II C | LinVB | 24:21 | Bato bayokani ’te bakosala ye mabe ; babomi ye na mabanga o libanda lya Tempelo ya Yawe, se lokola mokonzi atindaki bango. | |
II C | LinVB | 24:22 | Mokonzi Yoas abosani malamu manso Yoyada, tata wa Zakaria, asalaki ye, mpe abomi Zakaria, mwana wa ye. O ntango akati motema Zakaria alobi : « Yawe atala likambo liye mpe apesa yo etumbu. » | |
II C | LinVB | 24:23 | O mobu mwa nsima basoda ba Aram bakei kobunda na Yoas ; bakomi o Yuda mpe o Yeruzalem, mpe babomi bankumu banso ba mokili, batindeli mokonzi wa Damasko biloko babotoloki. | |
II C | LinVB | 24:24 | Ata basoda ba Aram bazalaki mingi te, Yawe akabi bato ebele o maboko ma bango, mpo batikaki Yawe Nzambe wa bankoko ba bango. Basoda ba Aram bapesi Yoas etumbu. | |
II C | LinVB | 24:25 | Mokolo bakei, batiki ye ntango abeli makasi. Basaleli ba ye bayokani ’te bakobekola liwa lya mwana wa nganga Nzambe Yoyada. Babomi ye o ntango alali o mbeto. Nsima ya liwa lya ye bakundi ye o Engumba ya Davidi, kasi o malita ma bakonzi te. | |
II C | LinVB | 24:26 | Nkombo ya bato batombokoki na ye : Zabad, mwana wa Simeat, moto wa Amon, na Yozabad, mwana wa Simrit, moto wa Moab. | |
Chapter 25
II C | LinVB | 25:1 | Amasia akomi mokonzi o ntango akokisi mibu ntuku ibale na mitano ; ayangeli ekolo mibu ntuku ibale na libwa o Yeruzalem. Nkombo ya mama wa ye Yoadan, moto wa Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 25:3 | Awa bokonzi bolendi o maboko ma ye, abomi basaleli ba ye, baye babomaki mokonzi, tata wa ye. | |
II C | LinVB | 25:4 | Kasi abomi bana ba bango te, se lokola ekomami o mobeko moye Yawe apesaki o buku ya Mobeko mwa Moze : « Bakoboma batata mpo ya mabe ma bana te, mpe bana mpo ya mabe ma batata te ; kasi bakoboma moto na moto mpo ya mabe ma ye moko. » | |
II C | LinVB | 25:5 | Amasia abengi bato banso ba Yuda mpe aponi bakomanda ba basoda nkoto na bakomanda ba basoda monkama, bazala bayangeli ba mabota manso ma Yuda mpe ma Benyamin. Atangi baye banso bakokisi mibu ntuku ibale mpe azwi bato nkoto nkama isato, banso basoda ba mpiko, bayebi kobunda na likongo mpe komeme nguba. | |
II C | LinVB | 25:6 | Na nsima aluki o Israel basoda ba mpiko, azwi bato nkoto monkama mpe afuti bango na talenta ya palata monkama. | |
II C | LinVB | 25:7 | Kasi moto moko wa Nzambe ayei koloba na ye : « E mokonzi, ondima kobunda etumba elongo na ba-Israel te, zambi Yawe azali na bango te, azali mpe na ba-Efraim te. | |
II C | LinVB | 25:8 | Soko bango bayei, ata ozali makasi o etumba, Nzambe akokweisa yo o boso bwa banguna ba yo, zambi Nzambe azali na nguya ya kolongisa to kokweisa. » | |
II C | LinVB | 25:9 | Amasia ayanoli moto wa Nzambe : « Bongo talenta monkama napesaki mpo bafuta basoda ba Israel ikende mpamba boye ? » Moto wa Nzambe azongisi : « Yawe akoki kopesa yo mosolo moleki moye ofutaki bango. » | |
II C | LinVB | 25:10 | Amasia atindi basoda bautaki o Efraim ’te bazonga o mboka ya bango. Kasi bango basilikeli Yuda mingi mpe bazongi o mboka na motema nkanda. | |
II C | LinVB | 25:11 | Amasia azwi mpiko mpe akambi bato ba ye o lobwaku la Mongwa mpe abomi bato ba Seir nkoto zomi. | |
II C | LinVB | 25:12 | Ba-Yuda bakangi banguna nkoto zomi, bakei na bango o nsonge ya ngomba elai mpe babwaki bango o nse ; banso bakufi nye. | |
II C | LinVB | 25:13 | Kasi basoda baye Amasia azongisaki mpo ’te babunda elongo na ye te, bakoti o bingumba bya Yuda, banda Samaria tee Bet-Oron, babomi bato nkoto isato mpe babotoli biloko ebele. | |
II C | LinVB | 25:14 | Mokolo nsima ya kolonga ba-Edom, Amasia akamati bikeko bya bato ba Seir, akomisi byango banzambe ba ye, afukameli byango mpe atumbeli byango mpaka ya malasi. | |
II C | LinVB | 25:15 | Yawe ayokeli Amasia nkanda mpe atindeli ye profeta moko, ayebisa ye : « Mpo nini okumisaki banzambe ba ekolo eye, awa bakokaki kobikisa ekolo ya bango o maboko ma yo te ? » | |
II C | LinVB | 25:16 | Esilisi ye naino koloba te, Amasia ayanoli ye : « Batii yo nde molaki wa mokonzi ? Fanda nye, soko olingi te ’te babete yo ! » Profeta afandi nye, na nsima alobi : « Nayebi ’te Nzambe akani koboma yo, zambi osalaki bongo mpe oyokaki malako ma ngai te. » | |
II C | LinVB | 25:17 | Amasia, mokonzi wa Yuda, atuni balaki ba ye mpe atindi bantoma epai ya Yoas, mwana wa Yoakaz, nkoko wa Yeku, mokonzi wa Israel, baloba na ye : « Yaka, tomekana ! » | |
II C | LinVB | 25:18 | Yoas, mokonzi wa Israel, azongiseli Amasia, mokonzi wa Yuda, maloba maye : « Nzete ya nzube ya Libano etindeli nzete ya sédere ya Libano maloba maye : ‘Tika mwana mobali wa ngai abala mwana wa yo. Kasi nyama ya zamba ya Libano ileki wana mpe inyati nzete ya nzube’. | |
II C | LinVB | 25:19 | Solo, olongi ba-Edom mpe okomi na lofundo. Bomba lokumu mpe fanda o mboka ya yo. To olingi komilukela makambo ma mpasi mpe komikweisa yo na ekolo ya yo Yuda ? » | |
II C | LinVB | 25:20 | Kasi Amasia alingi koyoka ye te, zambi Nzambe alingi kokweisa bango, mpo bakumisaki banzambe ba Edom. | |
II C | LinVB | 25:21 | Yoas, mokonzi wa Israel, amile-ngeli mpo ya etumba, mpe akei kobunda na Amasia, mokonzi wa Yuda, o Bet-Semes, mboka ya Yuda. | |
II C | LinVB | 25:22 | Ba-Yuda bakwei o boso bwa ba-Israel, mpe bato banso bakimi, moto na moto o ema ya ye. | |
II C | LinVB | 25:23 | Yoas, mokonzi wa Israel, akangi Amasia, mwana wa Yoas, nkoko wa Yoakaz, mokonzi wa Yuda, o Bet-Semes, mpe akei na ye o Yeruzalem. Abuki lopango lonene lozingi Yeruzalem, banda ezibeli ya Efraim tee ezibeli ya Litumu, bolai maboko nkama inei. | |
II C | LinVB | 25:24 | Abotoli wolo na palata inso, na mpe biloko binso bizalaki o Tempelo ya Yawe epai ya Obed-Edom. Abotoli mpe biloko bya motuya bizalaki o ndako ya mokonzi, akangi mpe bato o boombo mpe azongi o Samaria. | |
II C | LinVB | 25:25 | Amasia, mwana wa Yoas, mokonzi wa Yuda, aumeli na bomoi mibu zomi na mitano nsima ya liwa lya Yoas, mwana wa Yoakaz, mokonzi wa Israel. | |
II C | LinVB | 25:26 | Makambo masusu ma Amasia, ut’o maye ma liboso tee maye ma nsuka, makomami o buku ya Bakonzi ba Yuda mpe ba Israel. | |
II C | LinVB | 25:27 | Ut’o mokolo Amasia atiki kolanda Yawe, bato bayokani ’te bakotombokela ye o Yeruzalem. Kasi ye akimi o Lakis. Batindi bato balanda ye o Lakis, babomi ye kuna. | |
Chapter 26
II C | LinVB | 26:1 | Ekokisi Ozia mibu zomi na motoba, bato banso ba Yuda baluboli ye mokonzi o esika ya tata wa ye Amasia. | |
II C | LinVB | 26:2 | Ye atongi lisusu mboka Elat, eye azongiseli mokili mwa Yuda nsima ya liwa lya mokonzi. | |
II C | LinVB | 26:3 | Ozia akokisi mibu zomi na motoba o ntango akomi mokonzi ; ayangeli ekolo mibu ntuku itano na mibale o Yeruzalem. Nkombo ya mama wa ye Yekolia, moto wa Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 26:5 | Asali makasi mpo ya kotosa Nzambe bomoi mobimba bwa Zekaria, oyo ateyaki ye nzela ya bobangi Nzambe. Mikolo minso azalaki kotosa Yawe, Nzambe apesi ye bolamu. | |
II C | LinVB | 26:6 | Akei kobundisa ba-Filisti mpe abuki lopango lonene la Gat, Yabne na Asdod ; na nsima atongi bingumba bisusu o mokili mwa Asdod mpe mwa ba-Filisti. | |
II C | LinVB | 26:7 | Nzambe asalisi ye o ntango azalaki kobunda na ba-Filisti, na ba-Arabu, bato ba Gur-Baal mpe na bato ba Meun. | |
II C | LinVB | 26:8 | Ba-Amon bazalaki kofuta Ozia mpako. Nkombo ya ye eyebani tee ndelo ya Ezipeti, zambi akomi makasi mpenza. | |
II C | LinVB | 26:9 | Ozia atongi manongi ma Yeruzalem o ezibeli ya Litumu, o ezibeli ya Lobwaku mpe o Redan, mpe alendisi mango. | |
II C | LinVB | 26:10 | Atongi mpe manongi o eliki, mpe atimoli maziba maike, mpo azalaki na bibwele mingi o esobe mpe o ngomba. Bato bakokataka bilanga mpe baye bakolonaka nzete ya vino bazalaki o ngomba Karmel, mpo alingi mosala mwa bilanga mingi. | |
II C | LinVB | 26:11 | Ozia azalaki mpe na limpinga lya basoda bakoki na etumba mpe bayebi kobunda malamu. Akaboli bango mangomba mangomba, lokola Yekiel, mokomi minkanda, na moyangeli Maseya bakamataki bango o mosala. Kanania, moyangeli wa mokonzi, azalaki komanda wa bango. | |
II C | LinVB | 26:13 | Bazalaki koyangela limpinga lya basoda nkoto nkama isato na nsambo na nkama itano, banso bayebi kobunda etumba, basoda ba solo mpe ba mpiko, bato bakoki kosalisa mokonzi o etumba na banguna. | |
II C | LinVB | 26:14 | Mbala inso bazalaki kokende etumba, Ozia akabeli bango nguba, makongo, binkoti bya etumba, kazaka ya bibende, matimbo na mabanga mpo ya bilingongo. | |
II C | LinVB | 26:15 | O Yeruzalem atii masini ma etumba, masalemaki na bato ba mayele mpo ya kotia o manongi mpe o matumu ma bifelo, mpo ’te bakoka kobete makula mosika mpe kobwaka mabanga manene. Nkombo ya ye etamboli mingi, zambi Nzambe asalisi ye mpe bokonzi bwa ye bolendi mpenza. | |
II C | LinVB | 26:16 | Awa alendi, abandi kosala lolendo mpe kobeba. Akomi koboya Yawe Nzambe wa ye ; bongo akoti o Tempelo mpo atumba mpaka ya malasi o altare. | |
II C | LinVB | 26:18 | Batelemi o boso bwa mokonzi Ozia, balobi na ye : « Yo Ozia, okoki kotumbela Yawe mpaka te ; ezali mosala mwa banganga Nzambe, bana ba Arone, zambi basantisi bango mpo ’te babonza mabonza ! Bima o ndako esantu, mpo obuki mobeko mwa Nzambe ! Awa osali bongo, Yawe Nzambe akopesa yo lokumu lisusu te ! » | |
II C | LinVB | 26:19 | Ozia, oyo azalaki na mbeki ya mpaka o maboko, ayoki nkanda. Ezalaki ye kolemwa bongo na banganga Nzambe, maba mabimeli ye o elongi, o miso ma banganga Nzambe, o Tempelo ya Yawe penepene na altare ya malasi. | |
II C | LinVB | 26:20 | Nganga Nzambe mokonzi Azaria na banganga Nzambe banso batali ye mpe bamoni ’te akomi na maba o elongi. Babengani ye noki o libanda, mpe ye moko abimi noki, zambi Yawe abeteki ye. | |
II C | LinVB | 26:21 | Mokonzi Ozia abeli maba tee mokolo mwa liwa lya ye ; asengelaki kofanda ntango inso o ndako ya ye moko, akoki kokoto lisusu o Tempelo ya Yawe te. Mwana wa ye Yotam azalaki kokonza ndako ya mokonzi mpe koyangela ekolo. | |
II C | LinVB | 26:22 | Makambo masusu ma Ozia, ut’o maye ma liboso tee maye ma nsuka, makomami o buku ya profeta Izaya, mwana wa Amos. | |
Chapter 27
II C | LinVB | 27:1 | Yotam akokisi mibu ntuku ibale na mitano ntango akomi mokonzi ; ayangeli ekolo mibu zomi na motoba o Yeruzalem. Nkombo ya mama wa ye Yerusa, mwana wa Sadok. | |
II C | LinVB | 27:2 | Asali malamu o miso ma Yawe se lokola tata wa ye Ozia, kasi ye akoti o esika esantusantu te. Nzoka-nde bato bakobi kosala mabe. | |
II C | LinVB | 27:3 | Ye moto atongi ezibeli ya Tempelo ya Yawe o epai ya likolo, mpe alendisi efelo ya Ofel. | |
II C | LinVB | 27:4 | Alendisi bingumba o ngomba ya Yuda, mpe atongi bibombamelo na manongi o mboka ya zamba. | |
II C | LinVB | 27:5 | Abundi etumba na mokonzi wa ba-Amon mpe alongi ye. O mobu mona bafuti ye talenta ya palata monkama na bingwongolo bya mbuma ya mampa nkoto zomi na mpe bingwongolo bya mbuma ya loso nkoto zomi. Ba-Amon basengeli kofuta ye biloko bina ; basali se bongo o mobu mwa mibale mpe o mobu mwa misato. | |
II C | LinVB | 27:6 | Yotam azwi bokasi boye, zambi na motema mobimba alandi se nzela ya Yawe Nzambe wa ye. | |
II C | LinVB | 27:7 | Makambo masusu ma Yotam, bitumba na misala mya ye, makomami o buku ya Bakonzi ba Israel mpe ba Yuda. | |
II C | LinVB | 27:8 | Akokisaki mibu ntuku ibale na mitano ntango akomaki mokonzi ; ayangelaki ekolo mibu zomi na motoba o Yeruzalem. | |
Chapter 28
II C | LinVB | 28:1 | Akaz akokisi mibu ntuku ibale o ntango akomi mokonzi ; ayangeli ekolo mibu zomi na motoba o Yeruzalem. Asali malamu te o miso ma Yawe lokola nkoko wa ye Davidi asalaki. | |
II C | LinVB | 28:3 | Yemei atumbi mpaka ya malasi o lobwaku la Ben-Inom, mpe atumbi bana ba ye, alandi bongo mimeseno mya nsomo mya bikolo biye Yawe abenganaki o boso bwa ba-Israel. | |
II C | LinVB | 28:4 | Abonzi miboma mpe atumbi mpaka ya malasi o bisika bya kokumisa banzambe basusu, o ngomba inso mpe o nse ya nzete ibesu inso. | |
II C | LinVB | 28:5 | Yawe Nzambe wa ye akabi ye o maboko ma mokonzi wa Aram. Mokonzi wa Aram alongi ye, akangi basoda ebele, mpe akambi bango bo baombo o Damasko. Bakabi Akaz o maboko ma mokonzi wa Israel, oyo akweisi ye. | |
II C | LinVB | 28:6 | Peka, mwana wa Remalia, abomi bato ba Yuda nkoto monkama na ntuku ibale se o mokolo moko, zambi batikaki Yawe Nzambe wa bankoko ba bango. | |
II C | LinVB | 28:7 | Zikri, elombe wa Efraim, abomi Maseya, mwana wa mokonzi, na Azrikam, moyangeli wa ndako ya mokonzi, na Elkana, moyangeli wa mokonzi. | |
II C | LinVB | 28:8 | Ba-Israel bakangi bandeko ba bango nkoto nkama ibale, basi, bana babali na bana basi ; babotoli mpe biloko ebele mpe bamemi byango o Samaria. | |
II C | LinVB | 28:9 | Ezalaki wana profeta wa Yawe, nkombo ’te Oded. Akei kozwana na basoda bayei o Samaria, alobi na bango : « Yawe Nzambe wa bankoko ba bino ayokeli bato ba Yuda nkanda ; yango wana akabi bango o maboko ma bino, kasi bino bobomi bango na nkanda ; Nzambe akoki kondima yango soki moke te. | |
II C | LinVB | 28:10 | Sikawa bolingi kokomisa bana ba Yuda mpe ba Yeruzalem, babali na basi, baombo ba bino ! Kasi bino moko bosali mabe maleki o miso ma Yawe Nzambe wa bino. | |
II C | LinVB | 28:11 | Yango wana boyoka ngai malamu, bozongisa baombo baye bokangaki o kati ya bandeko ba bino, soki te, Yawe akosilikela bino makasi ! » | |
II C | LinVB | 28:12 | Bankumu basusu ba Efraim : Azaria, mwana wa Yokanan, Berekia, mwana wa Mesilemot, Yekizkia, mwana wa Salum, na Amasa, mwana wa Adlai, basiliki na basoda bauti o bitumba. | |
II C | LinVB | 28:13 | Balobi na bango : « Bokotisa baombo o engumba te ; soko bosali bongo, tokosala mabe o miso ma Yawe ; bokobakisa bobe likolo lya masumu ma biso, maye masili makomi maike mpenza, mpe Yawe akoyokela biso ba-Israel nkanda. » | |
II C | LinVB | 28:14 | Yango wana o miso ma bakomanda mpe ma bato banso, basoda batiki baombo na biloko binso babotoloki. | |
II C | LinVB | 28:15 | Na nsima baponi bato mpo ya kosalisa baombo : balatisi baye bazalaki bolumbu bilamba na sapato, biye babotoloki o etumba, mpe bapesi bango biloko bya bolei mpe bya bomeli, na mpe mafuta ma bopakoli nzoto. Bakei na bango tee Yeriko, mboka ya mbila, esika bandeko ba bango bafandi ; baye bakoki kotambola lisusu te, babutisi bango o mpunda. Na nsima bazongi o Samaria. | |
II C | LinVB | 28:16 | O mikolo mina mokonzi Akaz atindi bato epai ya bakonzi ba Asur mpo ’te baya kosalisa ye. | |
II C | LinVB | 28:18 | Ba-Filisti mpe bayei kobundisa mboka ya mokili epai ya mbu mpe o Negeb, mokili mozalaki mwa bato ba Yuda. Babotoli Bet-Semes, Ayalon, Gederot, Soko, Timna, Gimzo, na mboka ya penepene, bongo bakomi kofanda kuna. | |
II C | LinVB | 28:19 | Solo, Yawe apesi Yuda etumbu mpo ya masumu ma Akaz, mokonzi wa ekolo, zambi atikaki ba-Yuda basala se mabe mpe atosaki Yawe te. | |
II C | LinVB | 28:20 | Teglat-Falasar, mokonzi wa Asur ayei, kasi esika ’te asalisa Akaz, abundi na ye etumba mpe azingi mboka. | |
II C | LinVB | 28:21 | Akaz abotoli biloko bisusu bya Tempelo ya Yawe na biloko bya mokonzi mpe bya bankumu ; apesi byango na mokonzi wa Asur, kasi ata bongo, azwi lisalisi te. | |
II C | LinVB | 28:23 | abonzeli banzambe ba Damasko miboma, ata bakweisaki ye o etumba. Alobi : « Awa banzambe ba bakonzi ba Aram bapesi bango maboko, ngai mpe nakobonzela bango mabonza mpo ’te baya kosalisa ngai. » Kasi bango bazalaki kobebisa ye na mpe Israel mobimba. | |
II C | LinVB | 28:24 | Akaz abotoli biloko binso bya Tempelo ya Yawe mpe abuki bisusu. Akangi bizibeli bya Tempelo ya Yawe mpe atongi bitumbelo o balabala inso ya Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 28:25 | O bingumba binso bya Yuda atongi bisika bya kokumisa banzambe mpo ’te bato batumbela banzambe basusu mpaka ya malasi ; ayokisi bongo Yawe, Nzambe wa bankoko ba ye, nkanda. | |
II C | LinVB | 28:26 | Makambo masusu na misala mya ye, ut’o miye mya liboso na tee miye mya nsuka, mikomami o buku ya Bakonzi ba Yuda mpe ba Israel. | |
Chapter 29
II C | LinVB | 29:1 | Ezekia akokisi mibu ntuku ibale na mitano o ntango akomi mokonzi ; ayangeli ekolo mibu ntuku ibale na libwa o Yeruzalem. Nkombo ya mama wa ye Abia, mwana wa Zekaria. | |
II C | LinVB | 29:3 | O mobu mwa yambo mwa bokonzi bwa ye, o sanza ya yambo, afungoli lisusu bizibeli bya Tempelo ya Yawe, mpe abongisi byango. | |
II C | LinVB | 29:5 | Alobi na bango : « Bino ba-Levi, boyoka ngai ! Sikawa bomipetola mpe bosantisa Tempelo ya Yawe Nzambe wa bankoko ba bino. Bolongola mbindo inso o ndako esantu. | |
II C | LinVB | 29:6 | Mpamba te, batata ba biso baboyaki kotosa Nzambe, mpe basali mabe o miso ma Yawe Nzambe wa biso. Batikaki ye, batalaki epai esusu mpe bapesaki Ndako ya Yawe mokongo. | |
II C | LinVB | 29:7 | Bakangaki mpe bizibeli bya Ekoteli ya Tempelo, bazimisaki miinda, batikaki kotumba mpaka ya malasi mpe kobonza mabonza ma kotumba o ndako esantu ya Nzambe wa Israel. | |
II C | LinVB | 29:8 | Yawe asiliki mingi na Yuda mpe na Yeruzalem ; akomisi yango ndakisa ya nsomo, ya mawa mpe ya boseki lokola bokoki komono na miso. | |
II C | LinVB | 29:9 | Yango wana batata ba biso bakufaki na mopanga, mpe bana babali, bana basi, mpe basi ba biso bakangamaki o boombo. | |
II C | LinVB | 29:10 | Sikawa nalingi kokata bondeko na Yawe Nzambe wa Israel mpo ’te atika koyokela biso nkanda. | |
II C | LinVB | 29:11 | Sikawa, bana ba ngai, bokokisa lotomo la bino, zambi Yawe aponi bino mpo ’te boteleme o boso bwa ye, mpo ’te bosalela ye, bokamba losambo mpe botumbela ye mpaka ya malasi. » | |
II C | LinVB | 29:12 | Ba-Levi batelemi bango baye : o kati ya bana ba Keat : Makat, mwana wa Amasai, na Yoel, mwana wa Azaria ; o kati ya bana ba Merari : Kis, mwana wa Abdi, na Azaria, mwana wa Yealelel ; o kati ya bana ba Gerson : Yoa, mwana wa Zima, na Eden, mwana wa Yoa ; | |
II C | LinVB | 29:15 | Babengi bandeko ba bango, bamisantisi mpe bapetoli Tempelo ya Yawe lokola mokonzi atindaki mpe lokola Yawe alobaki. | |
II C | LinVB | 29:16 | Banganga Nzambe bayingeli o Tempelo ya Yawe mpo ’te bapetola yango. Babimisi biloko mbindo binso bizwami o ndako esantu ya Yawe ; ba-Levi basangisi binso esika yoko, na nsima babwaki byango o libanda o lobwaku la Kedron. | |
II C | LinVB | 29:17 | Babandi kosantisa Tempelo o mokolo mwa yambo mwa sanza ya yambo, mpe nsima ya mikolo mwambe bayingeli o Ekoteli liboso lya Tempelo. Basali lisusu mikolo mwambe mpo ya kosa-ntisa Tempelo ya Yawe mpe basukisi misala o mokolo mwa zomi na motoba mwa sanza ya yambo. | |
II C | LinVB | 29:18 | Na nsima bakei epai ya mokonzi Ezekia, balobi na ye : « Topetoli Tempelo mobimba ya Yawe : altare ya mabonza ma kotumba na biloko bya yango binso, na meza ya mampa ma mabonza, na biloko bya yango binso. | |
II C | LinVB | 29:19 | Biloko binso mokonzi Akaz atiaki mpembeni o ntango azalaki kobebisa, tosantisi byango mpe tozongisi byango o esika bizalaki kala. Bizali sikawa o boso bwa altare ya Yawe. » | |
II C | LinVB | 29:20 | Mokonzi Ezekia atelemi noki mpe asangisi bayangeli ba engumba mpe akei o Tempelo ya Yawe. | |
II C | LinVB | 29:21 | Bayei na ngombe babali nsambo, mpata babali nsambo, bana mpata babali nsambo na ntaba babali nsambo bo moboma mwa bofuti masumu ; bapetola bongo mokonzi, ndako esantu mpe Yuda mobimba. Na nsima Ezekia atindi banganga Nzambe, bana ba Arone, babonza mabonza mana o altare ya Yawe. | |
II C | LinVB | 29:22 | Babomi ngombe ; banganga Nzambe bakamati makila mpe basopi mango o altare ; babomi mpata mpe basopi makila o altare ; babomi bana mpata mpe basopi makila o altare. | |
II C | LinVB | 29:23 | Na nsima bayei na ntaba bo moboma mwa bofuti masumu o miso ma mokonzi mpe o miso ma bato banso. Bango batandeli yango maboko. | |
II C | LinVB | 29:24 | Banganga Nzambe babomi yango mpe babonzi makila ma yango bo moboma mwa bofuti nyongo ya Israel mobimba, zambi mokonzi atindaki ’te babonza libonza lya kotumba na mpe moboma mwa bofuti masumu ma ba-Israel banso. | |
II C | LinVB | 29:25 | Na nsima atii ba-Levi o Tempelo ya Yawe ; bazalaki na migbala, nzenze na lokombe, se lokola Davidi na Gad, momoni-makambo, na profeta Natan batindaki ; zambi etinda ena eutaki na Yawe, na monoko mwa baprofeta ba ye. | |
II C | LinVB | 29:26 | Batii wana ba-Levi na biyembeli bya Davidi, na banganga Nzambe na mindule mya bango ; | |
II C | LinVB | 29:27 | na nsima Ezekia atindi ’te babonza libonza lya kotumba o altare. Bobele o ntango babandi kobonza, babandi koyembela Yawe nzembo mpe kobete mindule na lomeko la biyembeli bya Davidi, mokonzi wa Israel. | |
II C | LinVB | 29:28 | Bato banso bakumbami, bazalaki koyemba nzembo mpe kobete mindule tee libonza mobimba litumbami. | |
II C | LinVB | 29:29 | Esilisi bango kobonza libonza, mokonzi na bato ba ye banso, bafukami mpe bakumbami. | |
II C | LinVB | 29:30 | Na nsima mokonzi Ezekia na bayangeli ba mboka batindi ba-Levi bakumisa Yawe na maloba ma Davidi mpe ma Asaf, momoni-makambo ; basali yango na esengo, na nsima bafukami mpe bakumbami. | |
II C | LinVB | 29:31 | Ezekia abandi kosakola : « Sikawa, bino bobonzami na Yawe, bobeleme mpe boya na miboma mpe na mabonza ma kokumisa Nzambe o Tempelo ya Yawe. » Bongo bato banso bayei na miboma mpe na mabonza ; baye balingi kopesa mingi bayei mpe na mabonza ma kotumba. | |
II C | LinVB | 29:32 | Motango mwa mabonza ma kotumba mozalaki : ngombe ntuku nsambo, mpata babali monkama, bana mpata nkama ibale ; babonzeli Yawe yango bo libonza lya kotumba. | |
II C | LinVB | 29:34 | Mpo ya kosese nyama inso ya mabonza ma kotumba, banganga Nzambe bango moko bakoki te, yango wana bandeko ba bango ba-Levi basalisi bango tee ntango misala minso misili mpe banganga Nzambe basilisi komisantisa ; ba-Levi balakisi mposa ya komisantisa leka banganga Nzambe. | |
II C | LinVB | 29:35 | Ezalaki mpe wana mafuta ebele ma miboma mya bondeko, na mpe vino mpo ya mabonza ma kotumba. Babongisi bongo milulu mya bokumisi Yawe o Tempelo. | |
Chapter 30
II C | LinVB | 30:1 | Ezekia atindi bantoma o Israel mpe o Yuda mobimba ; atindeli mpe ba-Efraim na ba-Manase minkanda mpo ’te baya o Tempelo ya Yawe o Yeruzalem kosepela eyenga ya Pasika ya Yawe, Nzambe wa Israel. | |
II C | LinVB | 30:2 | Mokonzi, bakomanda mpe bato banso bayokani ’te bakosepela eyenga ya Pasika eye o sanza ya ibale ; | |
II C | LinVB | 30:3 | bakokaki kosepela yango te o eleko etindami, mpo banganga Nzambe baye bamisantisaki bakokaki te, mpe bato banso bakomaki o Yeruzalem naino te. | |
II C | LinVB | 30:5 | ’te babenga bato banso o Israel mobimba, banda Berseba tee Dan, baya kosepela eyenga ya Pasika ya Yawe, Nzambe wa Israel, o Yeruzalem, mpo bato baike basepelaki eyenga te lokola etindami o Minkanda Misantu. | |
II C | LinVB | 30:6 | Bantoma bakei bongo na minkanda mikomami na mokonzi mpe na bankumu o Israel mpe o Yuda mobimba mpo ’te bayebisa banso maloba maye ma mokonzi : « Bana ba Israel, bozongela Yawe Nzambe wa Abarama, wa Izaka mpe wa Israel. Akozongela bino bato botikali mpe bobiki o maboko ma bakonzi ba Asur. | |
II C | LinVB | 30:7 | Bozala lokola batata na bandeko ba bino te, baye baboyaki kotosa Yawe Nzambe wa bankoko ba bango ; yango wana Yawe akabaki bango o maboko ma banguna, baye babebisaki mokili lokola bozali komono. | |
II C | LinVB | 30:8 | Sikawa bolakisa motó makasi te lokola batata ba bino. Botandela Yawe maboko, boyaka o ndako esantu eye asantisaki seko ; bosalela Yawe Nzambe wa bino mpe akotika koyokela bino nkanda enene. | |
II C | LinVB | 30:9 | Ya solo, bobele soko bino bozongeli Yawe, bato baye bakangaki bandeko na bana ba biso o boombo, ndebakoki koyokela bango mawa mpe kozongisa bango o mokili moye, mpo Yawe Nzambe wa bino azali nta ngolu mpe bolamu ; akobombela bino lisusu elongi ya ye te, soko bozongeli ye. » | |
II C | LinVB | 30:10 | Bantoma bakei o engumba yoko yoko, bakatisi mikili mya Efraim, Manase na Zabulon, nzokande bato baseki mpe batioli bango. | |
II C | LinVB | 30:11 | Kasi bato basusu ba Aser, ba Manase mpe ba Zabulon bamikitisi mpe bayei o Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 30:12 | O mokili mwa Yuda Nzambe abongisi mitema mya bato ; mpe banso motema moko babandi kosala lokola mokonzi na bankumu batindaki, mpe lokola Yawe alobaki. | |
II C | LinVB | 30:13 | Bato baike basangani o Yeruzalem o sanza ya ibale mpo ya kosepela eyenga ya Mampa mazangi nkisi ; bato bazalaki mingi mpenza. | |
II C | LinVB | 30:14 | Babandi koboma bitumbelo binso bizalaki o Yeruzalem na mpe altare ya mpaka ya malasi ; babwaki yango o lobwaku la Kedron. | |
II C | LinVB | 30:15 | Babonzi libonza lya Pasika o mokolo mwa zomi na minei mwa sanza ya ibale. Banganga Nzambe na ba-Levi bayoki nsoni mpe noki bamipetoli mpo ’te bameme mabonza ma kotumba o Tempelo ya Yawe. | |
II C | LinVB | 30:16 | Na nsima bakei o esika ya bango ya mosala, basali lokola Moze, moto wa Nzambe, atindaka bango. Banganga Nzambe basopi makila maye ba-Levi bapesi bango, | |
II C | LinVB | 30:17 | zambi bato baike ba lisanga bamipetolaki te, mpe ba-Levi basengeli koboma miboma mya Pasika o esika ya baye bazalaki motema peto te mpo ya koboma myango o miso ma Yawe. | |
II C | LinVB | 30:18 | Bato basusu, mingi mpenza epai ya Efraim, Manase, Izakar na Zabulon, bamipetolaki te ; baliaki Pasika, ata basalaki te lokola etindami o Minkanda misantu. Kasi Ezekia asambeli mpo ya bango mpe alobi : « Nzambe oyo azali malamu, alimbisa lisumu | |
II C | LinVB | 30:19 | lya bato banso bamipesi mpo ya koluka Yawe, Nzambe wa bankoko ba bango, ata bazali na motema peto te lokola etindami o makambo masantu. » | |
II C | LinVB | 30:21 | Bana ba Israel baye bazalaki o Yeruzalem, basepeli na esengo enene eyenga ya Mampa mazangi nkisi mikolo nsambo mobimba. Ba-Levi na banganga Nzambe bazalaki koye-mbela Yawe mikolo mina na nguya ya bango inso. | |
II C | LinVB | 30:22 | Maloba ma Ezekia makoteli mitema mya ba-Levi banso ; baye bandimi Yawe na motema esengo, bakobi kosepela eyenga mikolo nsambo mobimba ; babonzi miboma mya bondeko, mpe bakumisi Yawe Nzambe wa bankoko ba bango. | |
II C | LinVB | 30:23 | Na nsima bato banso ba lisanga bayokani ’te bakokoba kosepela eyenga, mpe basepeli lisusu mikolo nsambo na esengo enene. | |
II C | LinVB | 30:24 | Ezekia, mokonzi wa Yuda, akabelaki bato ngombe babali nkoto yoko na mpata nkoto nsambo ; bankumu mpe bapesaki ngombe babali nkoto yoko na mpata nkoto zomi. Banganga Nzambe baike bamipetoli. | |
II C | LinVB | 30:25 | Ba-Yuda bazalaki kosepela elongo na banganga Nzambe mpe na ba-Levi, na bato banso bautaki o Israel, na bampaya bautaki o Israel mpe baye bafandi o Yuda. | |
II C | LinVB | 30:26 | Esengo enene ezalaki o Yeruzalem ; banda mikolo mya Salomo, mwana wa Davidi, mokonzi wa Israel, bamoni naino likambo lya lolenge lona o Yeruzalem te. | |
Chapter 31
II C | LinVB | 31:1 | Esilisi bango makambo mana, ba-Israel banso bazalaki wana bakei o bingumba binso bya Yuda, babuki bikeko binso bya mabanga mpe bya nzete, babebisi bisika bya kokumisa banzambe basusu na bitumbelo, balongoli byango bipai binso o mikili mya Yuda, Benyamin, Efraim na Manase. Na nsima ba-Israel banso bazongi o mboka ya bango, moto na moto o etuka ya ye. | |
II C | LinVB | 31:2 | Ezekia abongisi lisusu mangomba ma banganga Nzambe mpe ma ba-Levi. O lingomba lya bango, apesi banganga Nzambe na ba-Levi, moto na moto mosala mwa ye : kobonza mabonza ma kotumba to miboma mya bondeko, kokamba losambo, kotondo Nzambe to kokumisa Yawe na nzembo penepene na bizibeli bya ndako ya Yawe. | |
II C | LinVB | 31:3 | Mokonzi apesi ndambo ya mosolo mwa ye moko mpo ya mabonza ma ntongo mpe ma mpokwa, mpo ya maye ma mokolo mwa Sabato mpe maye ma mikolo mya nsuka ya sanza to ma biyenga, lokola ekomami o Mobeko mwa Yawe. | |
II C | LinVB | 31:4 | Na nsima alobi na bato ba Yeruzalem ’te bapesa banganga Nzambe na ba-Levi manso masengeli na bango mpo ’te bakoka kotosa mibeko mya Yawe. | |
II C | LinVB | 31:5 | Nsima ya maloba mana, bana ba Israel bayei kobonza mbuma ya yambo ya mampa, ya vino, ya mafuta, ya mafuta ma nzoi na mbuma inso ya bilanga ; bapesi eteni ya zomi ya biloko binso. | |
II C | LinVB | 31:6 | Mpe bana na Israel mpe ba Yuda, baye bafandi o mboka ya Yuda, bayei na eteni ya zomi ya ngombe na mpata, na eteni ya zomi ya biloko bisantu babonzeli Yawe. Batii binso o mipiko. | |
II C | LinVB | 31:10 | Nganga Nzambe mokonzi Azaria, wa libota lya Sadok, ayanoli ye : « Ut’o mokolo babandi kopesa biloko mpo ya Tempelo ya Yawe, tolei mpe totondi ; ata bongo biloko bitikali naino mingi, mpo Yawe abenisi bato ba ye ! Tala biloko ebele bitikali ! » | |
II C | LinVB | 31:11 | Ezekia atindi ’te babongisa bisika bya kobomba biloko o Tempelo ya Yawe ; bongo babongisi byango. | |
II C | LinVB | 31:12 | Bayei na biloko, na biteni bya yambo na mabonza. Mo-Levi Konanya azalaki kapita wa bisika bina ; nsima ya ye ndeko wa ye Simei. | |
II C | LinVB | 31:13 | Yekiel, Azazia, Nakat, Asael, Yerimot, Yozabad, Eliel, Yismakia, Makat na Benaya bazalaki bakengeli ; Konanya na ndeko wa ye Simei bazalaki kotala bango lokola mokonzi Ezekia na Azaria, moyangeli wa Tempelo ya Yawe, bazalaki kotinda. | |
II C | LinVB | 31:14 | Mo-Levi Kore, mwana wa Yimna, mokengeli wa ezibeli ya Esti, azalaki koyamba mabonza maye bato bazalaki kopesa Yawe. Ye moto azalaki kokabola mabonza mana na mpe biloko bileki bisantu. | |
II C | LinVB | 31:15 | O bingumba bya banganga Nzambe Eden, Minyamin, Yesua, Semaya, Amaria na Sekania bazalaki kosalisa ye mpo ya bakokabela bandeko ba bango biloko, ná bato banene ná bato bake : | |
II C | LinVB | 31:16 | babali, ata ba lingomba nini, bayebakokisi mibu ntuku isato basengelaki kokende kosala mosala mwa Nzambe o Tempelo ya Yawe, o mokolo mwa bango, lokola bakabolaki mwango o mangomba. | |
II C | LinVB | 31:17 | Banganga Nzambe bakomami engebene na libota lya tata, ba-Levi, baye bakokisi mibu ntuku ibale, engebene na lingomba mpe na misala mya bango. | |
II C | LinVB | 31:18 | Bazalaki kokoma libota mobimba : basi mpe bana babali na bana basi, soko bamibongisi solo mpo ya mosala mwa mambi masantu. | |
II C | LinVB | 31:19 | Baponoki mpe bato o mboka yoko yoko ya ekolo mpo ’te bapesa biloko bya kolia na banganga Nzambe, bana ba Arone, baye bafandi o bisobe pene na mboka, mpe na ba-Levi baye bakomami. | |
II C | LinVB | 31:20 | Ezekia asali bongo o mokili mobimba mwa Yuda ; abongisi mosala mwa ye malamu mpe na bosembo o miso ma Yawe Nzambe wa ye. | |
Chapter 32
II C | LinVB | 32:1 | Nsima ya misala miye mya bosembo mya Ezekia, Senakerib, mokonzi wa Asur, ayei o Yuda, aluki kobundisa bingumba bizingami na mapango makasi mpo ’te abotolo byango. | |
II C | LinVB | 32:3 | abengi bankumu na bakomanda ba ye, ayokani na bango ’te bakokanga mai ma maziba mazalaki o libanda lya engumba. Bandimi kosalisa ye ; | |
II C | LinVB | 32:4 | babengi bato ebele mpo ’te bakanga maziba manso na mpe nzela ya mai mazalaki koleka o nse ya mabelé. Bazalaki koloba : « Mpo nini bakonzi ba Asur bazwa mai mingi o mokolo bakoya ? » | |
II C | LinVB | 32:5 | Na mpiko ya sika Ezekia abandi kokanga madusu manso mazalaki o lopango, abakisi manongi mpe atongi naino efelo esusu zongazonga na engumba. Abongisi mpe Milo o Engumba ya Davidi mpe atuli makongo na nguba ebele. | |
II C | LinVB | 32:6 | Aponi bakomanda ba basoda bayangela bato, asangisi bango penepene na ezibeli ya engumba mpe alendisi bango na maloba maye : | |
II C | LinVB | 32:7 | « Bozala na mpiko mpe na molende ! Bobanga te, bolenge mpe te o boso bwa mokonzi wa Asur mpe bwa bato ebele bazali na ye, zambi Oyo azali na biso aleki ye na bokasi. | |
II C | LinVB | 32:8 | Ye azali bobele moto, kasi Yawe Nzambe wa biso azali na biso, ye akosalisa biso mpe akobunela biso etumba ! » Bato bakomi lisusu na mpiko mpo ya maloba ma Ezekia, mokonzi wa Yuda. | |
II C | LinVB | 32:9 | Nsima ya makambo mana, Senakerib, mokonzi wa Asur, ntango afandi o Lakis elongo na basoda ba ye banso, atindi basaleli ba ye o Yeruzalem epai ya Ezekia, mokonzi wa Yuda, mpe epai ya bato banso ba Yeruzalem, bayebisa bango boye : | |
II C | LinVB | 32:10 | « Senakerib, mokonzi wa Asur, alobi boye : Awa bolingi kofanda o ebombamelo ya Yeruzalem, bozali kotia elikya na nani ? | |
II C | LinVB | 32:11 | Ezekia azali kokosa bino, alingi ’te bokufa na nzala mpe na mposa ya mai, awa alobi : Yawe Nzambe wa biso akobikisa biso o maboko ma mokonzi wa Asur. | |
II C | LinVB | 32:12 | Kasi Ezekia, oyo alongolaki bisika binso bya kokumisa banzambe basusu na mpe bitumbelo binso, alobaki na bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem : Bokumbamela altare se yoko, botumba mpaka ya malasi bobele wana. | |
II C | LinVB | 32:13 | Bobungi nde maye biso na batata ba ngai tosalaki bikolo binso bya nse ? Banzambe ba mikili mina minso mya nse bakokaki nde kobikisa ekolo ya bango o maboko ma ngai ? | |
II C | LinVB | 32:14 | Wapi nzambe wa bikolo bina, biye batata ba ngai basilisaki ? Akokaki nde kobikisa bato ba ye o maboko ma ngai ? Bongo Nzambe wa bino akobikisa bino nde o maboko ma ngai ? | |
II C | LinVB | 32:15 | Bongo Ezekia akosa mpe abungisa bino te ! Bondima ye te, mpo ata nzambe moko te akokaki kobikisa bato ba ekolo ya ye o maboko ma ngai mpe ma batata ba ngai. Bongo nzambe wa bino akobikisa mpe bino o maboko ma ngai soki te ! » | |
II C | LinVB | 32:16 | Basaleli ba Senakerib bakobi koloba maloba ma botuki Yawe Nzambe na mpe Ezekia, mosaleli wa ye. | |
II C | LinVB | 32:17 | Na nsima Senakerib akomi monkanda mpo ya kotuka Yawe Nzambe wa Israel na maloba maye : « Lokola banzambe ba bikolo binso bya nse mobimba babikisaki bato ba bango o maboko ma ngai te, se bongo Nzambe wa Ezekia akobikisa bato ba ye o maboko ma ngai te. » | |
II C | LinVB | 32:18 | Na mongongo makasi basaleli ba Senakerib batangeli bato ba Yeruzalem baye batelemi o lopango la engumba monkanda moye o lokota la ba-Yuda, mpo ’te babanga mpe bayoka nsomo, bongo bato ba Senakerib babotolo mboka. | |
II C | LinVB | 32:19 | Bazalaki kotanga Nzambe wa Yeruzalem lokola azalaki moko wa banzambe ba bikolo bisusu bya nse, mosala mwa maboko ma bato. | |
II C | LinVB | 32:20 | Awa bamoni bongo, mokonzi Ezekia na profeta Izaya, mwana wa Amos, basambeli mpe babeleli Nzambe wa likolo. | |
II C | LinVB | 32:21 | Yawe atindi anzelu oyo abomi o nganda ya mokonzi wa Asur basoda banso ba mpiko, bakomanda na bankumu ba bango. Oyo ayoki nsoni mingi mpe azongi o ekolo ya ye. Ntango ayingeli o ndako ya nzambe wa ye, bana ba ye basusu babomi ye na mopanga. | |
II C | LinVB | 32:22 | Yawe abikisi bongo Ezekia na bato banso ba Yeruzalem o maboko ma Senakerib, mokonzi wa Asur, mpe o maboko ma banguna ba bango banso ; akomisi bipai binso kimia. | |
II C | LinVB | 32:23 | Bato baike bakei o Yeruzalem kobonzela Yawe mabonza mpe kokabela Ezekia, mokonzi wa Yuda, makabo, zambi mpo ya makambo mana Ezekia azwi lokumu lonene o miso ma bato ba bikolo binso. | |
II C | LinVB | 32:24 | O mikolo mina Ezekia abeli makasi mpenza, alingi akufa. Abondeli Yawe mpe Yawe andimeli ye, asali mpe likamwisi mpo ya ye. | |
II C | LinVB | 32:25 | Nzoka-nde Ezekia azongiseli Nzambe malamu ma ye te. Akomi moto wa lole-ndo, mpe Nzambe ayokeli ye na bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem nkanda enene. | |
II C | LinVB | 32:26 | Na nsima Ezekia amikitisi, atiki koyoka lolendo, bato ba Yeruzalem basali se bongo : Yawe atiki koyokela bango nkanda bomoi bwa Ezekia mobimba. | |
II C | LinVB | 32:27 | Ezekia azalaki na nkita mpe na lokumu lonene. Akongoli mosolo ebele : palata, wolo, mabanga ma motuya, mafuta ma nsolo mpimbo, nguba na biloko bya motuya ndenge na ndenge. | |
II C | LinVB | 32:28 | Atongi bibombelo bya mbuma ya mampa, vino na mafuta ; atongi mpe ndako ya bibwele ndenge na ndenge, na mapango mpo ya bitonga bya ye. | |
II C | LinVB | 32:29 | Atongisi mboka mingi mpo ya kobatela ngombe na mpata ya ye ebele, zambi Nzambe akabeli ye nkita enene. | |
II C | LinVB | 32:30 | Ezekia akangisi mai ma moluka Gikon epai ya likolo mpe alekisi mango epai ya nse ya Engumba ya Davidi, o Westi. Ezekia asilisi misala mya ye minso se malamu. | |
II C | LinVB | 32:31 | Bongo o ntango bantoma ba Babilon batindami epai ya ye mpo ’te bayeba ndenge likamwisi lisalemi o ekolo ya ye, Yawe atiki ye mpo ’te ameka ye motema, ayeba mpe makanisi ma ye manso. | |
II C | LinVB | 32:32 | Makambo masusu ma Ezekia na maye asalaki mpo ya kokumisa Nzambe, makomami o buku ya Mamoni ma profeta Izaya, mwana wa Amos, mpe o buku ya Bakonzi ba Yuda mpe ba Israel. | |
Chapter 33
II C | LinVB | 33:1 | Manase akokisi mibu zomi na mibale o ntango akomi mokonzi ; ayangeli ekolo mibu ntuku itano na mitano o Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 33:2 | Asali mabe o miso ma Yawe, alandi makambo ma nsomo ma bato ba bikolo bisusu, baye Nzambe abenganaki o boso bwa ba-Israel. | |
II C | LinVB | 33:3 | Atongi lisusu bisika bya kokumisa banzambe ba lokuta, biye tata wa ye Ezekia alongolaki ; atongi bitumbelo bya Baal mpe asali makonzi ma bikeko. Akumbameli bikelamo binso bya likolo mpe akumisi byango. | |
II C | LinVB | 33:4 | Atongisi bitumbelo bya banzambe ba lokuta o Tempelo ya Yawe, eye Yawe alobaki : « Nakotia nkombo ya ngai o Yeruzalem. » | |
II C | LinVB | 33:6 | Atumbisi bana ba ye o lobwaku la Ben-Inom, azalaki kosala makambo ma likundu mpe ma nkisi, mpe aluki koyeba makambo makoya. Aluki mpe bato bakosololaka na milimo mya bawa, na baye bakosakolaka makambo makoya. Na mabe mana asali o miso ma Yawe, ayokisi ye nkanda enene. | |
II C | LinVB | 33:7 | Asali ekeko mpe atii yango o Tempelo ya Yawe, ata Yawe alobaki na Davidi mpe na mwana wa ye Salomo : « O Tempelo eye mpe o Yeruzalem, engumba eye naponoki o kati ya mabota manso ma Israel, nakotia nkombo ya ngai seko. | |
II C | LinVB | 33:8 | Soko bana ba Israel basali manso natindaki bango na monoko mwa Moze, soko batosi Mobeko mobimba, bitinda na mibeko minso, nakolongola bango lisusu te o mokili napesaki bankoko ba bango. » | |
II C | LinVB | 33:9 | Manase abungisi bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem nzela ; masumu ma bango maleki naino maye ma bato baye Yawe asilisaki o boso bwa ba-Israel. | |
II C | LinVB | 33:11 | Yawe atindeli bango bakomanda ba basoda ba mokonzi wa Asur ; bango bakangi Manase na minyololo mya bibende, mpe bakei na ye o Babilon. | |
II C | LinVB | 33:12 | Awa akomi na mpasi, aluki kokitisa motema mwa Yawe, amikitisi mpenza o boso bwa Nzambe wa bankoko ba ye, | |
II C | LinVB | 33:13 | mpe abondeli ye. Nzambe akitisi motema. Ayoki mabondeli ma ye mpe azongisi ye o Yeruzalem, azala lisusu mokonzi kuna. Sikawa Manase andimi ’te Yawe azali Nzambe. | |
II C | LinVB | 33:14 | Nsima ya yango abongisi lopango o libanda lya Engumba ya Davidi. Lopango lona loleki o Esti ya Gikon, o kati ya lobwaku, lokei tee o ezibeli ya Mbisi, mpe lozingi Ofel. Abutisi lopango mingi mpenza. Atii bakomanda ba basoda o bibombamelo binso bya Yuda. | |
II C | LinVB | 33:15 | Alongoli o Tempelo ya Yawe bikeko bya banzmbe basusu na mpe ekeko enene, abwaki bitumbelo binso o libanda lya engumba, biye atongaki o ngomba ya Tempelo ya Yawe mpe o Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 33:16 | Abongisi altare ya Yawe mpe abonzi miboma mya bondeko na mabonza ma kokumisa Yawe. Atindi ba-Yuda ’te basalela Yawe Nzambe wa Israel. | |
II C | LinVB | 33:17 | Nzokande bato bakobi kobonza mabonza o ngomba, kasi bazalaki kobonzela se Yawe Nzambe wa bango. | |
II C | LinVB | 33:18 | Makambo masusu ma Manase, na losambo asambelaki Nzambe wa ye, na maloba ma bamoni-makambo, baye balobaki na ye o nkombo ya Yawe, Nzambe wa Israel, makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Israel. | |
II C | LinVB | 33:19 | Manso makomami o buku ya Mikóló mya Ozai : losambo Manase asambelaki, ndenge nini Yawe ayoki ye, masumu ma ye, boniboni aboyaki Nzambe, bisika atongaki ndako ya kokumisa banzambe basusu, na makonzi ma bikeko atiaki wana liboso ’te amikitisa. | |
II C | LinVB | 33:20 | Manase akei kokutana na bankoko ba ye ; bakundi ye o lopango la ye moko. Mwana wa ye Amon akitani ye. | |
II C | LinVB | 33:21 | Amon akokisi mibu ntuku ibale na mibale o ntango akomi mokonzi ; ayangeli ekolo mibu mibale o Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 33:22 | Asali maye masepelisi Yawe te, se lokola tata wa ye Manase. Amon abonzi miboma mpe akumisi bikeko binso tata wa ye Manase asalaki. | |
II C | LinVB | 33:23 | Kasi amikitisi o miso ma Yawe te lokola tata wa ye Manase. Amon aleki ye naino na bosali mabe. | |
Chapter 34
II C | LinVB | 34:1 | Yozia akokisi mibu mwambe o ntango akomi mokonzi ; ayangeli ekolo mibu ntuku isato na moko o Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 34:2 | Asali se malamu o miso ma Yawe mpe alandi ezalela ya nkoko wa ye Davidi ; atamboli nzela nyokanyoka te. | |
II C | LinVB | 34:3 | O mobu mwa mwambe mwa bokonzi bwa ye, o ntango azalaki naino elenge, abandi koluka Nzambe wa nkoko wa ye Davidi ; mpe o mobu mwa zomi na mibale abandi kolongola o Yuda mpe o Yeruzalem bisika bya kokumisa banzambe basusu, alongoli makonzi ma bikeko, na bikeko bisusu binso bya mabaya mpe bya bibende. | |
II C | LinVB | 34:4 | Atindi ’te baboma bitumbelo bya Baal ; alongoli bitumbelo bya mpaka ya malasi bizalaki o bitumbelo bina, abuki makonzi manene, makonzi ma bikeko mpe bikeko bya mabaya to bibende. Aniki byango mpe abwaki mputulu o malita ma baye babonzaki miboma. | |
II C | LinVB | 34:5 | Atumbi minkuwa mya banganga Nzambe o altare ya bango. Bapetoli bongo Yuda na Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 34:7 | abomi bitumbelo, abomi makonzi ma bikeko, na bikeko bisusu binso, mpe aniki yango ; abomi mpe bisika binso bya kotumba mpaka ya malasi o Israel mobimba. Na nsima azongi o Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 34:8 | O mobu mwa zomi na mwambe mwa bokonzi bwa ye, awa asilaki kopetola ekolo na Tempelo, Yozia atindi Safan, mwana wa Asalia, na Masaya moyangeli wa engumba, na mpe Yoa, mwana wa Yoakaz, mokomi minkanda, babongisa lisusu Tempelo ya Yawe Nzambe wa ye. | |
II C | LinVB | 34:9 | Bakei epai ya nganga mokonzi Kilkia mpe bapesi ye mosolo moye ba-Levi, baye bakokengeleke ezibeli ya Tempelo, bayelaki ye mpo ya Tempelo ; bazwaki mwango o maboko ma bato ba Manase, Efraim na bato basusu ba Israel, bato ba Yuda, ba Benyamin mpe ba Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 34:10 | Bapesi mwango na bato bakosalaka mosala o Tempelo ya Yawe ; bango bazwi mwango mpe basali na mwango misala mya kobongisa mpe kokembisa Tempelo. | |
II C | LinVB | 34:11 | Bapesi mwango na basali ba mabaya mpe na batongi mpo ’te basomba mabanga manene mpe mabaya masengeli na mosala mwa kobongisa mitondo mya ndako iye bakonzi ba Yuda babebisaki. | |
II C | LinVB | 34:12 | Bato baye bazalaki kosala mosala mwa bango na bosembo. Ba-Levi bato bazalaki bakapita : Yakat na Obadia, ba etuka ya Merari, mpe Zekaria na Mesulam, ba etuka ya Keat. Ba-Levi baye bayebi kobete biyembeli bya miziki, | |
II C | LinVB | 34:13 | basusu bakambi bato bakomemeke biloko bya mosala, basusu bakambi bakapita ba mosala moko moko. O kati ya ba-Levi basusu bazalaki bakomi minkanda, bakomi to bakengeli ba bizibeli bya Tempelo. | |
II C | LinVB | 34:14 | O ntango bazalaki kokamata mosolo bato bapesaki mpo ya Tempelo, nganga Nzambe Kilkia azwi buku ya Mobeko eye Yawe apesaki Moze. | |
II C | LinVB | 34:15 | Kilkia alobi na Safan, mokomi minkanda : « Nazwi buku ya Mobeko o Tempelo ya Yawe » ; mpe apesi Safan buku ena. | |
II C | LinVB | 34:16 | Safan akei kopesa mokonzi buku mpe ayebisi ye : « Misala minso opesi basali ba yo, mizali kosalema. | |
II C | LinVB | 34:17 | Bakamati mosolo bazwaki o Tempelo mpe bapesi mwango o maboko ma bakapita mpe ma basali. » | |
II C | LinVB | 34:18 | Na nsima mokomi Safan ayebisi mokonzi : « Nganga Nzambe Kilkia apesi ngai buku. » Safan abandi kotanga yango o miso ma mokonzi. | |
II C | LinVB | 34:20 | Alobi na Kilkia, na Ayikam, mwana wa Safan, na Abdon, mwana wa Mika, na Safan, mokomi minkanda mpe na Asaya, mosaleli wa mokonzi : | |
II C | LinVB | 34:21 | « Bokende kotuna Yawe mpo ya ngai mpe mpo ya bato ba Israel mpe ba Yuda batikali, ayebisa biso ntina ya maloba mazali o buku eye nazwi. Ntembe te, Yawe ayokeli biso nkanda enene, mpo bankoko ba biso batosaki maloba ma buku eye te, basalaki te lokola ekomami wana. » | |
II C | LinVB | 34:22 | Kilkia na baye baponomi na mokonzi bakei kotala profeta mwasi Kulda, mwasi wa Salum, mokengeli wa ndako ya bilamba ; Salum azalaki mwana wa Tokat mpe nkoko wa Kasra. Mwasi oyo afandi o Yeruzalem o mboka ya sika. Bayebisi ye makambo mana. | |
II C | LinVB | 34:23 | Ye ayanoli : « Yawe Nzambe wa Israel alobi : Boyebisa moto oyo atindi bino epai ya ngai : | |
II C | LinVB | 34:24 | Oyoka maloba ma Yawe : Nakotindela esika eye na bato bafandi awa mpasi enene, nakokokisa maloba manso nakanelaki bango, maye makomami o buku eye batangi o miso ma mokonzi wa Yuda. | |
II C | LinVB | 34:25 | Awa baboyi ngai mpe batumbeli banzambe basusu mpaka ya malasi, awa batumoli ngai na misala mya bango minso, nkanda ya ngai ekokwela esika eye mpe ekosila te. | |
II C | LinVB | 34:26 | Kasi boloba na mokonzi wa Yuda oyo atindaki bino mpo ’te botuna Yawe : Yoka maloba ma Yawe Nzambe wa Israel : Oyoki maloba ma ngai malamu, | |
II C | LinVB | 34:27 | mpo oyoki motema mawa mpe omikitisi o miso ma ngai, awa oyoki maloba alobaki na engumba eye mpe na bato bafandi wana, mpo omikitisi, opasoli bilamba mpe oleli o miso ma ngai, ngai mpe nayoki yo ; maloba ma Yawe. | |
II C | LinVB | 34:28 | Ngai nakosala ’te okende kokutana na bankoko ba yo ; kuna okolala nye o lilita. Miso ma yo makomono mpasi ina inso te, iye nakotindela esika eye na bato bafandi awa. » Bantoma bakei kopesa mokonzi eyano. | |
II C | LinVB | 34:30 | Akei o Tempelo ya Yawe elongo na bato banso ba Yuda na Yeruzalem, bato banene na bato bake. Atangeli bango maloba ma buku ya Bondeko, eye bazwi o Tempelo. | |
II C | LinVB | 34:31 | Mokonzi atelemi, bato banso bamoni ye, akati bondeko na Yawe ’te banso bakolanda Yawe, bakotosa mibeko, mitindo na malako ma ye manso ; bakolanda mango na motema moko mpe na mayele manso, bakotosa maloba manso ma Bondeko, maye makomami o buku eye. | |
II C | LinVB | 34:32 | Mokonzi atindi bato banso bazalaki o Yeruzalem mpe o Benyamin ’te basala se bongo ; yango wana bato ba Yeruzalem balandi bondeko bwa Yawe Nzambe wa bankoko ba bango. | |
Chapter 35
II C | LinVB | 35:1 | Yozia asepeli eyenga ya Pasika o Yeruzalem. Babomi mpata ya Pasika o mokolo mwa zomi na minei mwa sanza ya yambo. | |
II C | LinVB | 35:2 | Alendisi banganga Nzambe o mosala mwa bango, mpe asalisi bango mpo ’te bakoka kosala mosala mwa bango o Tempelo ya Yawe. | |
II C | LinVB | 35:3 | Alobi na ba-Levi, baye batindami ’te bateya ba-Israel banso, baye babonzami na Yawe : « Botia Sanduku o Tempelo eye Salomo, mwana wa Davidi, mokonzi wa Israel atongaki. Bosengeli komeme yango lisusu o mapeke te. Sikawa bosalela Yawe Nzambe wa bino na mpe ekolo ya ye Israel. | |
II C | LinVB | 35:4 | Bokende koteleme, bolanda milongo mya mabota mpe mya misala mya bino lokola ekomami na Davidi, mokonzi wa Israel mpe na mwana wa ye Salomo. | |
II C | LinVB | 35:5 | Bino ba-Levi bokabwana libota libota, bozala o ndako esantu mpe bosalisa bandeko ba bino, baye bazali ba-Levi te. | |
II C | LinVB | 35:6 | Boboma mpata ya Pasika, bomisantisa, bosalisa bandeko ba bino mpe bosala manso lokola Yawe alobaki na monoko mwa Moze. » | |
II C | LinVB | 35:7 | Yozia apesi bato basusu nyama ike, bana mpata na bana ntaba. Motango mwa miboma mya Pasika mpo ya bato bazalaki wana mozalaki mpata nkoto ntuku isato ; bakisa ngombe nkoto isato iutaki o bitonga bya mokonzi. | |
II C | LinVB | 35:8 | Bankumu ba ekolo bakamati ndambo ya mabonza, bapesi yango na banganga Nzambe, ba-Levi mpe na bato basusu. Kilkia, Zekaria na Yekiel, bayangeli ba Tempelo ya Yawe bapesi banganga Nzambe bana mpata nkoto ibale na nkama motoba bo miboma mya Pasika. Bapesi mpe ngombe nkama isato. | |
II C | LinVB | 35:9 | Konanya na bandeko ba ye Semaya na Netaneel, Kasabia, Yekiel na Yozabad, bakonzi ba ba-Levi, bapesi ba-Levi bana mpata nkoto itano bo miboma mya Pasika, na ngombe nkama itano. | |
II C | LinVB | 35:10 | Babongisi milulu boye : Banganga Nzambe bakei koteleme o esika ya bango, ba-Levi basali se bongo, lokola mokonzi atindaki. | |
II C | LinVB | 35:11 | Babomi moboma mwa Pasika ; banganga Nzambe bakamati makila o maboko ma ba-Levi, mpe basopi mango ; ba-Levi basesi nyama. | |
II C | LinVB | 35:12 | Batii mabonza ma kotumba mpembeni mpo ’te bapesa mango na libota lyoko lyoko ; bakoka kobonzela Yawe mango, lokola ekomami o buku ya Moze. Basali mpe bongo na nyama inene. | |
II C | LinVB | 35:13 | Na nsima balambi mpata ya Pasika na móto lokola mobeko motindi, balambi mpe bilei bisusu bisantu o nzungu, o masasu mpe o sani ; na nsima bakei noki mpo ’te bapesa bato byango. | |
II C | LinVB | 35:14 | Na nsima balengeli biloko bya Pasika bya bango moko mpe bya banganga Nzambe, mpo banganga Nzambe, bana ba Arone, bazalaki kobonza mabonza ma kotumba na mpe mafuta tee butu. Yango wana ba-Levi balengeli biloko bya Pasika bya bango moko mpe bya banganga Nzambe, bana ba Arone. | |
II C | LinVB | 35:15 | Bayembi, bana ba Asaf, batikali o bisika bya bango, lokola Davidi atindaki ; Asaf, Eman na Yedutun, momoni-makambo wa mokonzi na bakengeli ba bizibeli bya Tempelo basengelaki kotika mosala te, mpo bandeko ba bango ba-Levi bazalaki kolengelele bango binso. | |
II C | LinVB | 35:16 | Mokolo mona babongisi bongo milulu minso mya kokumisa Yawe mpo ’te bato bakoka kosepela eyenga ya Pasika mpe kobonza mabonza ma kotumba o altare, se lokola mokonzi Yozia atindaki. | |
II C | LinVB | 35:17 | Bongo ba-Israel bazalaki wana basepeli eyenga ya Pasika o mokolo monamei, basepeli mpe eyenga ya Mampa mazangi nkisi mikolo nsambo mobimba. | |
II C | LinVB | 35:18 | Naino basepeli eyenga ya Pasika bongo te, ut’o eleko ya profeta Samuel. Ata mokonzi moko wa Israel asepelaki Pasika te lokola Yozia, ye elongo na banganga Nzambe, ba-Levi, ba-Yuda na ba-Israel na bato banso ba Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 35:20 | Yozia asali mosala monene mwa kobongisa Tempelo ya Yawe. Mokolo moko Neko, mokonzi wa Ezipeti, akei kobunda o Karkemis, penepene na Efrate. Yozia akei kokutana na ye. | |
II C | LinVB | 35:21 | Neko atindeli ye bantoma na maloba maye : « Mokonzi wa Yuda, biso na yo likambo nini ? Lelo nalingi kobu-nda na yo te, kasi na monguna wa ngai wa kala. Nzambe ayebisaki ngai ’te nasala noki. Bobundisa Nzambe te, oyo azali na ngai, keba ’te aboma yo te. » | |
II C | LinVB | 35:22 | Nzokande Yozia alingi kotika ye te, zambi akanaki se kobuna na ye. Aboyi koyoka maloba ma Neko, maye Nzambe atindaki ye aloba. Abundi na ye etumba o lobwaku la Megido. | |
II C | LinVB | 35:23 | Bato ba litimbo babeteli mokonzi Yozia likula. Mokonzi alobi na basaleli ba ye : « Bomeme ngai, nazoki mingi. » | |
II C | LinVB | 35:24 | Basaleli ba ye balongoli ye o likalo lya etumba, babutisi ye o likalo lisusu mpe bakei na ye o Yeruzalem. Akufi kuna mpe bakundi ye o malita ma bankoko ba ye. Bato banso ba Yuda mpe ba Yeruzalem basali lilaka mpo ya Yozia. | |
II C | LinVB | 35:25 | Yeremia asali nzembo ya boleli Yozia. Bayembi banso, babali na basi, bakotangaka nkombo ya Yozia o nzembo ya bango ya boleli, tee lelo. Ekomi mobeko o Israel, mpe okoki kotanga nzembo ena o buku ya Nzembo ya Boleli. | |
II C | LinVB | 35:26 | Makambo masusu ma Yozia, ndenge azalaki komipesa mpo ’te alanda manso makomami o Mobeko mwa Yawe, | |
Chapter 36
II C | LinVB | 36:1 | Bato ba ekolo baluboli Yoakaz, mwana wa Yozia, mokonzi o Yeruzalem, o esika ya tata wa ye. | |
II C | LinVB | 36:2 | Yoakaz akokisi mibu ntuku ibale na misato o ntango akomi mokonzi ; ayangeli ekolo sanza isato o Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 36:3 | Mokonzi wa Ezipeti abotoli ye bokonzi o Yeruzalem, afutisi bato ba ekolo mpako ya talenta ya palata monkama na talenta ya wolo yoko. | |
II C | LinVB | 36:4 | Mokonzi wa Ezipeti aluboli Eliakim, ndeko wa Yoakaz, mokonzi o Yeruzalem, abongoli nkombo ya ye, apesi ye nkombo Yoyakim. Neko akangi Yoakaz mpe akei na ye o Ezipeti. | |
II C | LinVB | 36:5 | Yoyakim akokisi mibu ntuku ibale na mitano o ntango akomi mokonzi ; ayangeli ekolo mibu zomi na moko o Yeruzalem. Asali mabe o miso ma Yawe, Nzambe wa ye. | |
II C | LinVB | 36:6 | Nabukodonozor, mokonzi wa Babilon, akei kobunda na ye. Akangi ye na minyololo mya bibende mpe akei na ye o boombo o Babilon. | |
II C | LinVB | 36:7 | Nabukodonozor akei na ndambo ya biloko bya Tempelo mpe atii byango o ndako ya ye o Babilon. | |
II C | LinVB | 36:8 | Makambo masusu ma Yoyakim, makambo ma nsomo mpe mabe asalaki, maye makitisaki ye, makomami o buku ya Bakonzi ba Israel mpe ba Yuda. Mwana wa ye Yoyakin akitani ye. | |
II C | LinVB | 36:9 | Yoyakin akokisi mibu zomi na mwambe o ntango akomi mokonzi ; ayangeli ekolo sanza isato na mikolo zomi o Yeruzalem. Asali mabe o miso ma Yawe. | |
II C | LinVB | 36:10 | O mobu mwa nsima, mokonzi Nabukodonozor atindi bato ba ye bakende kokamata Yoyakin mpe baya na ye o Babilon ; bakamata mpe biloko bya motuya bya Tempelo ya Yawe ; aluboli ndeko wa ye Sedekia mokonzi wa Yuda o Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 36:11 | Sedekia akokisi mibu ntuku ibale na moko o ntango akomi mokonzi ; ayangeli ekolo mibu zomi na moko o Yeruzalem. | |
II C | LinVB | 36:12 | Asali mabe o miso ma Yawe Nzambe wa ye. Alingi komikitisa te o miso ma profeta Yeremia, oyo atindami na Yawe. | |
II C | LinVB | 36:13 | Atombokeli mokonzi Nabukodonozor, oyo alayisi ye ndai o nkombo ya Yawe. Akomi motó makasi mpe motema libanga ; aboyi kozongela Yawe, Nzambe wa Israel. | |
II C | LinVB | 36:14 | Banganga Nzambe na bato banso bazalaki se koboya Nzambe ; balandi makambo ma nsomo ma bikolo bisusu, mpe basantoli Tempelo eye Yawe atindaki ’te batonga yango o Yeruzalem mpo ’te bakumisa ye. | |
II C | LinVB | 36:15 | Yawe, Nzambe wa bankoko ba bango ale-mbi te, atindeli bango bantoma ba ye, zambi aluki kobatela ekolo ya ye na mpe Ndako ya ye. | |
II C | LinVB | 36:16 | Kasi bato batioli bantoma ba Nzambe, bakinoli maloba ma ye, baseki mpe baprofeta ba ye. Yawe akomi koyokela bato ba ye nkanda enene, moto moko akoki kokitisa motema mwa ye te. | |
II C | LinVB | 36:17 | Yango wana Nzambe atindeli bango mokonzi wa ba-Kaldea, oyo abomi bilenge ba bango na mopanga o esika esantu ; ayokeli bilenge babali na bilenge basi mawa te ; atali mpe te baye bakomi babange na baye banuni. Nzambe akabi bango banso o maboko ma ye. | |
II C | LinVB | 36:18 | Mokonzi wa Babilon ayibi biloko binso bya Tempelo ya Yawe, biloko binene na bike, na mpe biloko bya motuya bya ndako ya mokonzi mpe ya bakomanda ; akei na binso o Babilon. | |
II C | LinVB | 36:19 | Batumbi Tempelo ya Nzambe, babuki bifelo bya Yeruzalem ; batumbi ndako inene inso, babebisi biloko binso bya motuya. | |
II C | LinVB | 36:20 | Na nsima Nabukodonozor akambi bato banso o Babilon, baye batikali mpe bakufi na mopanga te ; sikawa bakomi baombo ba mokonzi mpe ba bana ba ye kin’o mokolo ba-Persi bakomi bakonzi ba ekolo. | |
II C | LinVB | 36:21 | Esalemi se lokola Yawe alobaki na monoko mwa Yeremia : « Mokili mokotikala mpamba, eloko yoko ekosalema awa te, liboso ’te bato bafuta nyongo ya mikolo mya Sabato, tee nsima ya mibu ntuku nsambo. » | |
II C | LinVB | 36:22 | Mpe o mobu mwa yambo Siro akomi mokonzi wa Persi, Yawe akokisi maye alobaki na Yeremia. Apesi Siro, mokonzi wa Persi, mayele : asakoli mpe akomi o monkanda maloba maye mpo ya bato banso ba ekolo mobimba : | |