Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I KINGS
Up
Chapter 1
I Ki LinVB 1:1  Mokonzi Davidi akomi mobange, akokisi mibu miike. Bazalaki kozipa ye malamu, nzokande azalaki koyoka malili.
I Ki LinVB 1:2  Basaleli ba ye ba­lobi na ye : « Tolukela mokonzi ele­nge mwasi azali naino ngondo, akosalela mokonzi mpe akotala ye malamu ; akolala o mbeto ya ye mpe bongo mo­konzi akoyoka nzoto móto. »
I Ki LinVB 1:3  Baluki elenge mwasi kitoko o ekolo mobimba ya Israel. Bazwi Abisag wa Sunam mpe bakei na ye epai ya mokonzi.
I Ki LinVB 1:4  Elenge mwasi oyo azalaki kitoko mingi ; azalaki kotala mokonzi malamu mpe kosalela ye ; nzokande mokonzi ayebani na ye te.
I Ki LinVB 1:5  Adonia, mwana wa Kagit, aluli bo­konzi, na lolendo la ye alobi : « Ngai moto nakozala mokonzi. » Aluki likalo lya farasa na mpe babali ntuku itano mpo ’te batambola liboso lya ye.
I Ki LinVB 1:6  Tata wa ye apaleli ye ata mokolo moko te na makambo mana, atuni ye te : « Mpo nini ozali kosala bo­ngo ? » Adonia azalaki mobali kitoko, mama wa ye abotaki ye nsima ya Absalom.
I Ki LinVB 1:7  Ayokani na Yoab, mwana wa Seruya, mpe na nganga Nzambe Ebi­atar ; bango bandimi ye.
I Ki LinVB 1:8  Kasi nganga Nzambe Sadok, na Benaya, mwana wa Yoyada, na profeta Natan, na Simei, na Reyi, na bilombe ba Davidi bandimi Adonia te.
I Ki LinVB 1:9  Mokolo Adonia abonzi moboma mwa mpata na ngombe mafuta epai ya Libanga lya Nyoka, penepene na liziba lya En-Rogel, abengi bandeko ba ye banso, bana ba mokonzi, na ba­to banso ba Yuda bazalaki kosalela mokonzi.
I Ki LinVB 1:10  Kasi abengi profeta Natan te, Benaya, bilombe na ndeko wa ye Salomo mpe te.
I Ki LinVB 1:11  Natan alobi na Betsabe, mama wa Salomo : « Oyoki te ’te Adonia, mwana wa Kagit, akomi mokonzi, mpe mokonzi wa biso Davidi ayebi yango te ?
I Ki LinVB 1:12  Sikawa kende ! Tika napesa yo lilako mpo ’te obikisa bomoi bwa yo mpe bwa mwana wa yo Salomo.
I Ki LinVB 1:13  Kende epai ya mokonzi Davidi mpe loba na ye : E mokonzi, yo moto olayelaki ngai mosaleli wa yo ndai eye : Mwana wa yo Salomo akozala mokonzi nsima ya ngai, ye moto akofanda o ngwende ya ngai. Bo­ngo mpo nini Adonia akomi mokonzi ?
I Ki LinVB 1:14  Mpe ntango okozala naino kosolola na mokonzi, ngai nakokoto o ndako mpe nakolendisa maloba ma yo. »
I Ki LinVB 1:15  Betsabe akoti o ndako ya moko­nzi, o esika ya kolala ; mokonzi akomi mobange mpenza, mpe Abisag, mwasi wa Sunem, azalaki kosalela ye.
I Ki LinVB 1:16  Betsabe akumbami mpe afukami o boso bwa mokonzi. Mokonzi atuni ye : « Olingi nini ? »
I Ki LinVB 1:17  Ye azongisi : « Mokonzi wa ngai, olayelaki ngai mosaleli wa yo, na nkombo ya Yawe Nzambe wa yo, ndai eye : Mwana wa yo Salomo akozala mokonzi nsima ya ngai, ye moto akofanda o ngwende ya ngai.
I Ki LinVB 1:18  Mpe tala, sikawa Adonia akomi mo­konzi, mpe yo mokonzi wa ngai, oyebi yango te !
I Ki LinVB 1:19  Abonzi moboma, abomi ngombe babali, bana ngombe ya mafuta na mpata ebele ; abengi bana banso ba mokonzi, na nganga Nza­mbe Ebiatar, na mokonzi wa basoda Yoab, kasi abengi mosaleli wa yo Salomo te.
I Ki LinVB 1:20  E mokonzi wa ngai, ba-Israel banso bakotala bobele yo mpo ’te oyebisa ’te nani akofanda o ngwende nsima ya yo, mokonzi wa ngai.
I Ki LinVB 1:21  Mokolo yo mokonzi wa ngai okokende kokutana na bankoko ba yo, bakosala ngai na mwana wa ngai Salomo mabe ! »
I Ki LinVB 1:22  Ezalaki ye naino kosolola na mokonzi, profeta Natan akoti o ndako.
I Ki LinVB 1:23  Bayebisi mokonzi : « Profeta Natan ayei. » Natan akomi epai ya mokonzi, akumbami o boso bwe ye, elongi o nse,
I Ki LinVB 1:24  mpe atuni ye : « E mokonzi wa ngai, yo moto otindaki etinda eye ’te Adonia akozala mokonzi nsima ya yo, ye moto akofanda o ngwende nsima ya yo ?
I Ki LinVB 1:25  Tala, lelo akendeki koboma ngombe babali, bana ngo­mbe ya mafuta na mpata ebele ; abe­ngi bana banso ba mokonzi, bakomanda ba basoda na mpe nganga Nza­mbe Ebiatar ; bazali sikawa kolia mpe komele o miso ma ye mpe koganga : ‘Mokonzi Adonia, kuma !’
I Ki LinVB 1:26  Ka­si abengi ngai mosaleli wa yo te, nganga Nzambe Sadok te, Benaya, mwana wa Yoyada te, mosaleli wa yo Salomo mpe te.
I Ki LinVB 1:27  Ya solo, yo moko­nzi otindaki bango basala bongo ? Nzo­kande oyebisi basaleli ba yo te nani akofanda o ngwende ya boko­nzi nsima ya yo. »
I Ki LinVB 1:28  Mokonzi Davidi ayanoli : « Benga Betsabe. » Ye ayingeli mpe ayei koteleme o boso bwa mokonzi.
I Ki LinVB 1:29  Mo­ko­nzi alayi ndai eye : « Lokola Yawe aza­li na bomoi, oyo abikisaki ngai o makambo manso ma mpasi,
I Ki LinVB 1:30  lokola nalayelaki yo ndai na nkombo ya Yawe Nzambe wa Israel : Mwana wa yo Salomo akozala mokonzi nsima ya ngai, ye moto akofanda o ngwende o esika ya ngai. Lelo nakosala bobele bongo. »
I Ki LinVB 1:31  Betsabe akumbami elongi o nse, afukami o boso bwa mokonzi mpe alobi na ye : « Mokonzi Davidi, kuma ! »
I Ki LinVB 1:32  Na nsima mokonzi Davidi alobi : « Bengela ngai nganga Nzambe Sadok na profeta Natan na Benaya, mwa­na wa Yoyada ! » Bayei epai ya mokonzi.
I Ki LinVB 1:33  Davidi alobi na bango : « Bosangisa basaleli ba mokonzi wa bino, bobutisa Salomo o mpunda ya ngai moko mpe bokende na ye o Gikon.
I Ki LinVB 1:34  Kuna, nganga Nzambe Sadok na profeta Natan bapakola ye mafuta mpe balubola ye mokonzi wa Israel ; bino bobete mindule mpe boganga : Mokonzi Salomo, kuma !
I Ki LinVB 1:35  Bolanda ye nsima, mpe ye akoya kofanda o ngwende ya ngai ; ye moto akozala mokonzi o esika ya ngai ; naluboli ye mokonzi wa Israel na Yuda. »
I Ki LinVB 1:36  Be­naya, mwana wa Yoyada, azongiseli mo­konzi : « Amen ! Yawe Nzambe andi­ma maloba ma mokonzi wa ngai !
I Ki LinVB 1:37  Lokola Yawe azalaki na mokonzi wa ngai, azala na Salomo se bongo. Apesa lokumu na ngwende ya ye, lokumu loleka loye la moko­nzi Davidi. »
I Ki LinVB 1:38  Nganga Nzambe Sadok, profeta Natan, Benaya, mwana wa Yoyada, na basoda ba Keret na Pelet bakei, babutisi Salomo o mpunda ya mokonzi Davidi mpe bakei na ye o Gikon.
I Ki LinVB 1:39  Nganga Nzambe Sadok akamati liseke lya mafuta o Ema, apakoli Salomo mafuta ma bokonzi. Babeti mindule mpe bato banso bagangi : « Mokonzi Salomo, kuma ! »
I Ki LinVB 1:40  Bato banso balandi ye bazalaki kobete mpiololo mpe kosepela mingi mpe­nza ; mabelé maningani na migango mya nsai.
I Ki LinVB 1:41  Adonia na bato banso babyangemi o limpati, awa basilisi kolia, ba­yoki makeléle. Yoab mpe ayoki mo­ndule mokobete, atuni : « Nini yango makelele maye o engumba ? »
I Ki LinVB 1:42  Ezalaki ye naino koloba, Yonatan, mwana wa nganga Nzambe Ebiatar, ayei. Adonia alobi na ye : « Yaka, ozali moto malamu ; ntembe te, oyeli ngai nsa­ngo elamu. »
I Ki LinVB 1:43  Yonatan ayanoli Adonia : « Nsango elamu soki te ! Mokonzi wa biso Davidi akomisi Salomo mokonzi !
I Ki LinVB 1:44  Mokonzi apesi ye nganga Nza­mbe Sadok, profeta Natan, Benaya, mwana wa Yoyada na basoda ba Keret mpe ba Pelet ; babutisi ye o mpunda ya mokonzi.
I Ki LinVB 1:45  Nganga Nza­mbe Sadok na profeta Natan bapakolaki ye mafuta mpo azala mokonzi. Balongwaki o Gikon kuna na esengo enene, mboka mobimba eninganaki ; makeléle ozali koyoka mango mana.
I Ki LinVB 1:46  Salomo akei mpe kofanda o ngwe­nde ya mokonzi,
I Ki LinVB 1:47  mpe basaleli ba mokonzi bayaki kopesa longonya na mokonzi wa biso Davidi, balobaki : Nzambe wa yo apesi nkombo ya Salomo lokumu loleki nkombo ya yo, mpe ngwende ya yo ezwa naino lokumu la yo. O mbeto ya ye, moko­nzi akumbameli ye,
I Ki LinVB 1:48  mpe asakoli naino maloba maye : Bakumisa Yawe Nza­mbe wa Israel, zambi alingisi ’te miso ma ngai mamono lelo moko wa bana ba ngai o ngwende ya ngai. »
I Ki LinVB 1:49  Bato banso babyangemi o limpati lya Adonia babandi kolenge, batelemi mpe bakimi, moto na moto nzela ya ye.
I Ki LinVB 1:50  Adonia, mpo ya bobangi Salomo, atelemi mpe akei kosimba maseke ma altare.
I Ki LinVB 1:51  Bayebisi Salomo ’te Adonia asimbi maseke ma altare mpo ya bobangi Salomo, alobi : « Bongo malamu Salomo alaya ndai ’te akoboma ngai mosaleli wa ye na mopanga te ! »
I Ki LinVB 1:52  Salomo alobi : « Soko azali moto wa bosembo, mosuki moko mokolongwa o motó mwa ye te ; kasi soko tozwi ye na likambo, akokufa. »
I Ki LinVB 1:53  Mokonzi Salomo atindi bato balongola ye pene na altare. Bongo akei kofukama o boso bwa Salomo mpe Salomo alobi : « Zonga o ndako ya yo. »
Chapter 2
I Ki LinVB 2:1  Ekomi Davidi penepene na liwa, apesi mwana wa ye, Salomo, malako maye :
I Ki LinVB 2:2  « Nakokende nzela eye bato banso bakokendeke. Yo, zala ma­kasi mpe omilakisa mobali mpe­nza.
I Ki LinVB 2:3  Memya bitinda bya Yawe Nza­mbe wa yo, tambola nzela ya ye, tosa mibeko mpe mitindo mya ye, landa makambo manso lokola makomani o Mobeko mwa Moze mpo ’te ozwa bo­lamu o misala mya yo minso.
I Ki LinVB 2:4  Bo­ngo Yawe akokisa elako eye alakelaki ngai : Soko bana ba yo bakengeli eza­lela ya bango, mpe o miso ma ngai basali malamu na motema mobimba, bokonzi bwa Israel botikala na bango seko.
I Ki LinVB 2:5  Oyebi makambo Yoab, mwana wa Seruya, asalaki ngai, ndenge abomaki bakomanda babale ba basoda ba Israel, Abner mwana wa Ner, mpe Amasa mwana wa Yeter : asopaki bongo makila o eleko ya boboto lokola nta­ngo ya bitumba. Na makila ma etu­mba abebisaki bongo mokaba mwa loketo la ye mpe mapapa ma makolo ma ye.
I Ki LinVB 2:6  Zala na mayele ; ata azali na nsuki mpembe, sala ’te akita na mo­tema boboto o mboka ya bawa te.
I Ki LinVB 2:7  Sala bana ba Barzilai, moto wa Galaad, se malamu ; bango mpe balia o meza ya yo, zambi mokolo nakimaki Absalom, bango basalisaki ngai.
I Ki LinVB 2:8  Penepene na yo Simei azali, ye mwana wa Gera, moto wa libota lya Benyamin wa Bakurim ; ye abeteleki ngai mobondo mpenza mokolo nalongwa­ki mpo nakende o Makanaim, kasi ayaki kokutana na ngai o Yordane ; bongo nalayaki ndai na nkombo ya Yawe ’te nakoboma ye na mopanga te.
I Ki LinVB 2:9  Kasi obanga te kopesa ye etu­mbu, ozali moto wa bwanya, oyebi nini osengeli kosala ; mpo ’te akita na nsuki mpembe o mboka ya bawa. »
I Ki LinVB 2:10  Davidi awei, akei kopema o mboka ya bankoko. Bakundi ye o mboka ya ye mpenza.
I Ki LinVB 2:11  Davidi azalaki mokonzi wa Israel mibu ntuku inei : mibu nsambo o Ebron, mibu ntuku isato na misato o Yeruzalem.
I Ki LinVB 2:12  Salomo azwi bokonzi o esika ya Davidi, tata wa ye ; mpe bokonzi bwa ye bolendi.
I Ki LinVB 2:13  Adonia, mwana wa Kagit, akei epai ya Betsabe, mama wa Salomo. Betsabe atuni ye : « Oyei na motema boboto ? » Azongisi : « Iyo. »
I Ki LinVB 2:14  Nsima akobi : « Nazali na mwa lisolo na yo. » Betsabe azongisi : « Okoki koloba ! »
I Ki LinVB 2:15  Alobi : « Oyebi ’te ngai nasengelaki kozala mokonzi, mpe bato banso ba Israel bandimaki ngai mpo nazala mo­konzi. Kasi bokonzi bokimi ngai mpe bokomi bwa ndeko wa ngai, zambi Yawe alingaki bongo.
I Ki LinVB 2:16  Sikawa nazali na mwa motuna natuna yo, oyoka ngai. » Alobi na ye : « Loba ! »
I Ki LinVB 2:17  Azo­ngisi : « Nabondeli yo, yebisa mo­konzi Salomo, zambi ye akoyoka yo, ’te apesa ngai Abisag wa Sunem, azala mwasi wa ngai. »
I Ki LinVB 2:18  Betsabe ayanoli : « Malamu, ngai moko nakolobela yo epai ya mokonzi. »
I Ki LinVB 2:19  Betsabe akei epai ya mokonzi Salomo koyebisa ye likambo lya Adonia. Mokonzi atelemi, akei kokutana na mama wa ye mpe akumbami o boso bwa ye. Na nsima afandi o ngwe­nde ya ye mpe atindi ’te bapesa mama wa mokonzi kiti. Ye ayei kofanda o loboko la ye la mobali.
I Ki LinVB 2:20  Alobi : « Nalingi kotuna yo mwa motuna, ondimela ngai. » Mokonzi azongiseli ye : « Mama, tuna ! Nakoboya te. »
I Ki LinVB 2:21  Alobi : « Bakoki nde kopesa Abisag wa Sunem na ndeko wa yo Adonia, abala ye ? »
I Ki LinVB 2:22  Mokonzi Salomo ayanoli mama wa ye : « Mpo nini osengi Abisag wa Sunem azala mwasi wa Adonia ? Senge ’te azwa bokonzi, awa azali mo­tomolo wa ngai, mpe awa nganga Nzambe Ebiatar mpe Yoab, mwana wa Seruya basili bandimi ye ! »
I Ki LinVB 2:23  Mokonzi Salomo alayi ndai o nkombo ya Yawe, alobi : « Yawe asala ngai lokola alingi mpe apesa ngai etumbu ! Awa Adonia alobaki liloba lina, amilukeli liwa !
I Ki LinVB 2:24  Sikawa, lokola Yawe aza­li na bomoi, oyo alendisi ngai mpe afandisi ngai o ngwende ya tata wa ngai Davidi, mpe akotisi ngai o libota lya bakonzi lokola alobaki, lelo mpenza bakoboma Adonia. »
I Ki LinVB 2:25  Mokonzi Salomo atindi Benaya, mwana wa Yoyada. Akangi Adonia mpe abomi ye.
I Ki LinVB 2:26  Mokonzi alobi na nganga Nza­mbe Ebiatar : « Kende o Anatot o mabelé ma yo, zambi okoki na liwa. Kasi nakoboma yo lelo te, mpo omemeki Sanduku ya Bondeko bwa Yawe Nza­mbe o miso ma tata wa ngai Davidi, mpe oyokaki mpasi se lokola ye ayokaki. »
I Ki LinVB 2:27  Salomo alongoli Ebiatar o mosala mwa nganga Nzambe wa Yawe, akokisi bongo liloba Yawe alobaki o Silo mpo ya libota lya Eli.
I Ki LinVB 2:28  Nsango ekomi tee o matoi ma Yoab ; Yoab andimi Adonia, kasi ayokani na Salomo te. Akimi o Ema ya Yawe mpe asimbi maseke ma altare.
I Ki LinVB 2:29  Bakei koyebisa Salomo ’te Yoab aki­mi o Ema ya Yawe, pene na altare. Salomo atindi Benaya, mwana wa Yoyada, alobi : « Kende koboma ye. »
I Ki LinVB 2:30  Benaya akoti o Ema ya Yawe, alobi na Yoab : « Mokonzi atindi boye : Bima awa ! » Kasi Yoab ayanoli : « Te ! Nakokufa bobele awa. » Benaya akei koyebisa mokonzi eyano Yoab azo­ngisi.
I Ki LinVB 2:31  Mokonzi alobi na ye : « Sala lo­kola alobaki, boma ye, na nsima kunda ye ; bongo okolongolela ngai mpe libota lya ngai nsoni, zambi ye moko Yoab asopaki makila ma bato bazalaki na likambo te.
I Ki LinVB 2:32  Yawe asala ’te makila ma ye makwela ye moko ; mpamba te, abomaki bato babale baleki ye na bosembo mpe na bolamu : awa tata wa ngai Davidi ayebaki te, abomaki na mopanga Abner, mwana wa Ner komanda wa basoda ba Israel, na Amasa mwana wa Yeter, komanda wa basoda ba Yuda.
I Ki LinVB 2:33  Makila ma ba­ngo makwela Yoab na bankoko ba ye seko ! Kasi boboto bwa Yawe bokozala seko na Davidi, na bankoko ba ye, na libota lya ye mpe na ngwende ya ye. »
I Ki LinVB 2:34  Benaya, mwana wa Yoyada, akei ; abeti Yoab mpe abomi ye. Bakundi Yoab o eliki.
I Ki LinVB 2:35  Mokonzi atii Benaya, mwana wa Yoyada, koma­nda o esika ya ye ; atii mpe nganga Nzambe Sadok o esika ya Ebiatar.
I Ki LinVB 2:36  Mokonzi abengi Simei mpe alobi na ye : « Tonga ndako ya yo o Yeruzalem ; ofanda bobele o engumba, okoki kobima kuna te mpo ya kokende ata epai wapi.
I Ki LinVB 2:37  Mokolo okobima mpe okokatisa lobwaku la Kedron, okokufa, ntembe te, mpo omilukeli liwa. »
I Ki LinVB 2:38  Simei alobi na mokonzi : « Olo­bi malamu, ngai mosaleli wa yo nakosala bobele lokola mokonzi wa ngai atindi. » Bongo Simei atikali mikolo mingi o Yeruzalem.
I Ki LinVB 2:39  Kasi nsima ya mibu misato, baombo babale ba Simei bakimi epai ya Akis, mwana wa Maaka, mokonzi wa Gat. Bayebisi Simei ’te baombo ba ye bazalaki o Gat.
I Ki LinVB 2:40  Simei atelemi, abo­ngisi mpunda ya ye mpe akei o Gat epai ya Akis koluka baombo ba ye. Simei akei kokamata baombo ba ye o Gat mpe azongisi bango o mboka.
I Ki LinVB 2:41  Bayebisi Salomo ’te Simei alongwaki o Yeruzalem mpo akende o Gat mpe asili kozonga.
I Ki LinVB 2:42  Mokonzi abengi Simei, alobi na ye : « Nalayisaki yo ndai na nkombo ya Yawe mpe bakebisaki yo : Mokolo okobima o engumba mpo ya koke­nde ata epai wapi, oyeba malamu ’te okokufa, ntembe ezali soki te. Olobaki na ngai : Olobi malamu, nakotosa.
I Ki LinVB 2:43  Mpo nini okokisaki ndai te, eye olayaki o miso ma Yawe, mpe etinda eye napesaki yo ? »
I Ki LinVB 2:44  Na nsima mokonzi alobi na Simei : « Yo moko, o kati ya motema, oyebi mabe manso osalaki tata wa ngai Davidi, yango wana Yawe akosala ’te mabe osalaki makwela yo moko.
I Ki LinVB 2:45  Kasi mokonzi Salomo akozwa se bolamu, mpe ngwe­nde ya Davidi ekopikama makasi o miso ma Yawe seko. »
I Ki LinVB 2:46  Mokonzi apesi Benaya, mwana wa Yoyada, etinda ; ye abimi, abeti Simei mpe abomi ye. Bongo bokonzi bwa ekolo bolendi o maboko ma Salomo.
Chapter 3
I Ki LinVB 3:1  Salomo akomi bokilo wa Farao, mokonzi wa Ezipeti, zambi abali mwana wa Farao mpe afandisi ye o Engumba ya Davidi kin’o eleko asilisi kotonga ndako ya ye moko, Te­mpelo ya Yawe mpe lopango zongazonga na Yeruzalem.
I Ki LinVB 3:2  Nzokande bato bazalaki bobele kobonza mabonza o bitumbelo o ngomba, zambi naino batongeli Nkombo ya Yawe ndako te.
I Ki LinVB 3:3  Salomo alingi Yawe na motema moko, alandi se mibeko mya tata wa ye Davidi, nzokande azalaki kobonza mabonza mpe kotumba mpaka ya malasi o bitumbelo o ngomba.
I Ki LinVB 3:4  Mokonzi Salomo akei o Gabaon kobonzela Nzambe mabonza ; ezalaki esika bato bameseni koya mpo ’te bakumisa Nzambe. Mpe Salomo abo­nzeli Nzambe mabonza nkoto o altare ena.
I Ki LinVB 3:5  Na butu Yawe amilakisi na ye na ndoto mpe alobi na ye : « Yebisa ngai eloko nini olingi napesa yo. »
I Ki LinVB 3:6  Salomo azongisi : « Olakisaki tata wa ngai Davidi, mosaleli wa yo, bolamu ; azalaki kotambola nzela ya bosembo o miso ma yo, na bosolo mpe na motema moko. Okolakisaka ye se bolamu : opesi ye mwana, oyo ofandisi o ngwende ya ye.
I Ki LinVB 3:7  Sikawa, Yawe Nza­mbe wa ngai, oponi ngai, mosaleli wa yo, nazala mokonzi o esika ya tata wa ngai Davidi, nzokande nazali bobele mwana, nakoki na mosala mwa mokonzi te.
I Ki LinVB 3:8  Ngai, mosaleli wa yo, nazali o kati ya ekolo eye oponoki : ezali ekolo enene, moto moko te akoki kotanga bato bazali awa.
I Ki LinVB 3:9  Bongo to­ndi­sa motema mwa ngai na bwanya, nayeba ntango inso nini ezali malamu to mabe, zambi nani akoki koyangela bato ba yo, awa ekolo ekomi enene boye ? »
I Ki LinVB 3:10  Yawe asepeli na maloba ma Salomo, azongiseli ye :
I Ki LinVB 3:11  « Awa osengi bomoi bolai te, osengi biloko ebele te, osengi liwa lya banguna te, kasi ose-ngi mayele ma koyeba mambi malamu na mambi mabe,
I Ki LinVB 3:12  nakosala maye osengi ngai, nakopesa yo mayele na bwanya, lokola moto moko azwi naino liboso lya yo te, mpe lokola moto moko nsima ya yo akozwa te !
I Ki LinVB 3:13  Nakopesa yo mpe maye osengi te : nkita na lokumu bomoi bwa yo mobimba ; mokonzi moko akokokana na yo te.
I Ki LinVB 3:14  Soko olandi nzela ya ngai mpe ome­myi mibeko na mitindo mya ngai minso lokola tata wa yo Davidi, nakopesa yo bomoi bolai. »
I Ki LinVB 3:15  Ntango Salomo alamuki, amoni ’te ezalaki bobele ndoto. Azongi o Yeruzalem mpe atelemi o boso bwa Sanduku ya Bondeko bwa Yawe. Abo­nzeli Yawe mabonza ma kotu­mba na miboma mya bondeko mpe alambeli basaleli ba ye banso limpati.
I Ki LinVB 3:16  Mokolo moko basi bandumba ba­bale bayei epai ya mokonzi Salomo ; batelemi o miso ma ye.
I Ki LinVB 3:17  Mwasi moko alobi : « E mokonzi wa ngai, nabondeli yo, biso na mwasi oyo tokofandaka o ndako yoko, mpe ngai naboti mwana ntango ye azalaki o ndako.
I Ki LinVB 3:18  Nsima ya mikolo misato mwasi oyo mpe aboti mwana ; tozalaki se biso moko, moto mosusu azalaki te, bobele biso babale o ndako se yoko.
I Ki LinVB 3:19  Mokolo mosusu mwana wa mwasi oyo akufi na butu, zambi ye alalelaki mwana.
I Ki LinVB 3:20  Atelemi o kati ya butu, mpe ntango ngai mosaleli wa yo nazalaki kolala mpongi, ye akamati mwana wa ngai azalaki na ngai o mbeto, atii ye o mopanzi mwa ye ; mpe atikeli ngai mwana wa ye oyo akufi.
I Ki LinVB 3:21  Nalongwi o mpongi mpo ya konungisa mwana wa ngai mabéle, nzokande asili akufi. Kasi na ntongo natali mwana malamu, azali mwana oyo te ngai nabotaki ! »
I Ki LinVB 3:22  Mwasi mosusu azongisi : « Lokuta, mwana oyo azali na bomoi, mwana wa ngai ; oyo akufi, mwana wa yo. » Mwasi wa liboso azongisi : « Obuki lokuta ! Mpamba te, mwana oyo akufi, mwana wa yo ; oyo azali na bomoi, mwana wa ngai. » Bazalaki koswana bongo o miso ma mokonzi.
I Ki LinVB 3:23  Mokonzi alobi : « Moko wa bino alo­bi : Mwana oyo azali na bomoi, mwana wa ngai ; oyo akufi mwana wa yo ! Mosusu alobi : Lokuta ! Mwana oyo akufi, mwana wa yo ; oyo azali na bomoi azali mwana wa ngai. »
I Ki LinVB 3:24  Mokonzi atindi bato bayela ye mopanga. Bayei na mwango.
I Ki LinVB 3:25  Mokonzi alobi : « Kata mwana oyo azali na bomoi na biteni bibale, mpe pesa bango moko moko eteni yoko ya mwana. »
I Ki LinVB 3:26  Kasi mama wa mwana oyo azali na bomoi ayokeli mwana wa ye mawa, alobi : « Nabondeli yo, mokonzi, pesa mwasi oyo mwana mobimba ! Baboma ye te ! » Nzokande mwasi mosusu alobi : « Azala wa ngai te, azala mpe wa yo te, tokabola ! »
I Ki LinVB 3:27  Sikawa moko­nzi akati likambo, alobi : « Pesa mwasi wa liboso mwana, baboma ye te, zambi oyo azali mama wa mwana. »
I Ki LinVB 3:28  Bato banso ba Israel bayoki boniboni mokonzi akati likambo, bakumisi ye mingi, zambi bamoni ’te azalaki na bwanya bwa Nzambe mpo ya kokata makambo ma bato na bose­mbo.
Chapter 4
I Ki LinVB 4:2  Bankumu baza­laki kosalela ye, bango baye : Azaria, mwana wa Sadok, nganga Nzambe ;
I Ki LinVB 4:3  Elikaf na Akia, bana ba Sisa, bakomi minkanda ; Yozafat, mwana wa Akilud, molaki wa mokonzi ;
I Ki LinVB 4:4  Benaya, mwana wa Yoyada, komanda wa basoda banso ; Sadok na Ebiatar, banganga Nzambe ;
I Ki LinVB 4:5  Azaria, mwana wa Natan, mokonzi wa bayangeli ; nga­nga Nzambe Zabud, mwana wa Natan, azalaki molaki wa mokonzi ;
I Ki LinVB 4:6  Abisar azalaki moyangeli wa ndako ya mokonzi ; Eliab, mwana wa Yoab, azalaki komanda wa basoda banso, mpe Adoram, mwana wa Abda, azalaki kapita wa bangamba.
I Ki LinVB 4:7  Salomo azalaki na bayangeli zomi na babale o ekolo mobimba ya Israel. Bango bazalaki kopesa ndako ya ye mobimba biloko bya kolia. Moko moko asengeli kopesa ye biloko bya kolia sanza yoko o mobu.
I Ki LinVB 4:8  Nkombo ya bango, yango iye : Mwana wa Kur, o ngomba ya Efraim.
I Ki LinVB 4:9  Mwana wa De­ker, o Makas, o Saalbim, o Bet-Semes, o Ayalon mpe o Bet-Kanan.
I Ki LinVB 4:10  Mwana wa Kesed, o Arubot ; ye aza­laki moyangeli wa Soko mpe wa mokili mobimba mwa Kefer.
I Ki LinVB 4:11  Mwana wa Abinadab, o mboka inso ya ngomba epai ya Dor ; mwasi wa ye azalaki Tabat, mwana wa Salomo.
I Ki LinVB 4:12  Baana, mwana wa Akilud, o Tanak mpe o Megido tee ngambo ya Yokneam mpe o mokili mobimba mwa Bet-Sean, leka Yizreel, ut’o Bet-Sean tee Abel-Mekola, penepene na Sartan.
I Ki LinVB 4:13  Mwana wa Geber, o Ramot ya mokili mwa Galaad ; ye azalaki koyangela nganda ya Yair, mwana wa Manase, o mokili mwa Basan, eye ezali na mbo­ka ntuku motoba, izingami na mapango mpe ikangemi na mafungola ma mbengi.
I Ki LinVB 4:15  Akimas o Neftali ; ye mpe abalaki mwana wa Salomo, nkombo ’te Basmat.
I Ki LinVB 4:19  Ge­ber, mwana wa Uri, o Galaad, mabelé ma Sikon, mokonzi wa ba-Amor, mpe ma Og, mokonzi wa Basan. Salomo azalaki na moyangeli mo­ko o mokili mwa Yuda.
I Ki LinVB 4:20  Ba-Israel na ba-Yuda bazalaki ba­ike mpenza, ebele lokola mbuma ya zelo o libongo lya mbu. Bazalaki na biloko bya kolia mpe bya bomeli, bazalaki na esengo.
Chapter 5
I Ki LinVB 5:1  Salomo azalaki koyangela mokili monene, ut’o ebale enene Efrate kin’o mokili mwa ba-Filisti mpe kin’o ndelo ya mokili mwa Ezipeti. Bango banso bazalaki kofuta mpa­ko mpe kosalela Salomo bomoi bwa ye mobimba.
I Ki LinVB 5:2  O ndako ya Salomo, mokolo na mokolo, biloko bya kolia bizalaki bo­ye : bingwongolo motoba bya mbuma ya mampa, na mpe bingwongolo zomi na bibale bya fufu,
I Ki LinVB 5:3  ngombe ya mafuta zomi, ngombe ya esobe ntuku ibale, mpata monkama, bakisa : mbuli, mboloko, ntaba ya zamba na mabata manene.
I Ki LinVB 5:4  Azalaki koyangela mokili mobimba o ngambo ya Efrate, banda Tifsa kin’o Gaza ; azalaki mokonzi monene wa bakonzi banso bafandi o ngambo esusu ya Efrate, mpe azalaki koyokana malamu na bikolo binso bya penepene.
I Ki LinVB 5:5  O Yuda mpe o Israel bato banso bafandaki nye, moto na moto pene na nzete ya ye ya vino to ya figi, longwa Dan tee Berseba, bomoi bwa Salomo mobimba.
I Ki LinVB 5:6  Salomo azalaki na ndako ya farasa nkoto inei mpo ya makalo ma ye, mpe na farasa nkoto zomi na ibale.
I Ki LinVB 5:7  Bayangeli, baye totangaki, bazalaki kopesa mokonzi Salomo biloko bya kolia bikoki na ye mpe na bato banso bazalaki kolia o meza ya ye ; bazalaki kopesa ye byango sanza na sanza, babosani eloko te.
I Ki LinVB 5:8  Bazalaki mpe kopesa mbuma ya mampa na ma­titi mpo ya koleisa farasa na ngo­mbe ya ye ya mosala. Bazalaki komeme yango o esika mokonzi afandi, moto na moto lokola batindi ye.
I Ki LinVB 5:9  Nzambe apesi Salomo bwanya mpe mayele mingi, na motema mo­ne­ne lokola zelo etandami mpembeni ya mbu.
I Ki LinVB 5:10  Aleki bato banso ba Esti na bwanya, na mpe bato banso ba Ezipeti.
I Ki LinVB 5:11  O kati ya bato banso, ye moto aleki na mayele : aleki Etan, moto wa Ezra, aleki Eman, Kalkol na Darda, bana ba Makol. Nkombo ya ye eyebani na bato ba bikolo binso bya penepene.
I Ki LinVB 5:12  Abimisi biyele nkoto isato, asali mpe nzembo nkoto yoko na itano.
I Ki LinVB 5:13  Ayebi kotanga nkombo ya nze­te inso, banda sédere ya Libano tee izopo eye ekokolaka o bifelo. Ayebi mpe manso matali nyama ya makolo manei, ndeke, nyama ike, nya­ma ikolandaka o mabelé, na mpe mbisi ya mai.
I Ki LinVB 5:14  Bato mpe bakonzi ba bikolo binso, baye bayokaki nsango ya bwanya bwa Salomo, bayei koyoka ye.
I Ki LinVB 5:15  Kiram, mokonzi wa Tiro, atindi bantoma epai ya Salomo, mpo ayokaki ’te baluboli ye mokonzi o esika ya tata wa ye. Mikolo minso Kiram azalaki koyokana na Davidi.
I Ki LinVB 5:17  « Oyebi ’te tata wa ngai Davidi, mpo ya bitumba bayelaki ye epai na epai, akokaki kotongela Nkombo ya Yawe Nzambe wa ye Tempelo te, tee nta­ngo Yawe alalisi bango o nse ya makolo ma ye.
I Ki LinVB 5:18  Sikawa Yawe Nzambe wa ngai akomisi ekolo ya ngai mobimba nye, monguna azali lisusu te mpe makambo ma mpasi mazali na ngai te.
I Ki LinVB 5:19  Bongo nalingi kotongela nkombo ya Yawe Nzambe wa ngai Tempelo, se lokola Yawe alobaki na tata wa ngai Davidi : ‘Mwana wa yo, oyo nakopesa ngwende ya yo, akotongela Nkombo ya ngai Tempelo.’
I Ki LinVB 5:20  Sikawa bato ba yo bakatela ngai sédere ya Libano. Basali ba ngai bakozala elongo na basali ba yo ; ngai moko nakopesa yo mosolo mpo ofuta basali ba yo engebene na motuya yo moko okokata. Solo, oyebi ’te epai ya biso moto moko ayebi kokata nzete lokola bato ba Sidoni te. »
I Ki LinVB 5:21  Eyoki Kiram maloba ma Salomo, asepeli mingi, alobi : « Bakumisa Yawe lelo, zambi apesaki Davidi mwana mobali wa bwanya mpo ’te ayangela ekolo ya ye enene ! »
I Ki LinVB 5:22  Kiram atindeli Salomo maloba maye : « Nazwi nsa­ngo ya yo. Nandimi kopesa yo mabaya ma sédere mpe ma sipresi, lokola okolinga.
I Ki LinVB 5:23  Basali ba ngai bakokita na mango ngomba ya Libano mpe ba­kokende na mango kin’o mbu. Ut’o kuna mabaya matetwa lokola ebei, mpe nakotika mango o esika okoyebisa ngai. Na nsima nakofu­ngola mango mpe yo okokamata mango. Kasi yo, nalingi otindela ngai biloko bya kolia bisengeli na ndako ya ngai mobimba. »
I Ki LinVB 5:24  Bongo Kiram apesi Salomo nzete ya sédere mpe ya sipresi inso ye ali­ngi.
I Ki LinVB 5:25  Salomo apesi Kiram bingwo­ngolo nkoto zomi bya mbuma ya mampa mpo ya koleisa bato ba ye na bingwongolo nkoto zomi bya mafuta ma sika. Biloko bina Salomo azalaki kopesa Kiram mobu na mobu.
I Ki LinVB 5:26  Yawe apesi Salomo bwanya lokola alakelaki ye. Boyokani bozalaki bokasi kati ya Kiram na Salomo ; bango babale bakati bondeko.
I Ki LinVB 5:27  Mokonzi Salomo aluki basali o mokili mobimba mwa Israel. Banga­mba bazalaki nkoto ntuku isato.
I Ki LinVB 5:28  Ati­ndi bango o Libano, sanza na sanza bazala nkoto zomi ; basala likelemba o mosala ; bongo sanza yoko bazala o Libano, sanza ibale o ndako ya ba­ngo. Adoram azalaki kapita wa ba­ngamba.
I Ki LinVB 5:29  Salomo azwi naino bato nkoto nsambo mpo ya komeme biloko, bato nkoto ntuku mwambe mpo ya kokata mabanga o ngomba.
I Ki LinVB 5:30  Bakisa bakapita Salomo atiaki mpo ya kotala basali, bazalaki nkoto isato na nkama isato.
I Ki LinVB 5:31  Mokonzi atindi ’te bapono mabanga manene, bakata ma­ngo kitoko mpo ya ebandela ya mosala mwa Tempelo.
I Ki LinVB 5:32  Basali ba Salomo mpe ba Kiram, na mpe bato ba Gibla babandi kokata mabanga mpe kopono nzete mpo ya mosala mwa boto­ngi Tempelo.
Chapter 6
I Ki LinVB 6:1  Nsima ya bobimi bwa ba-Israel o Ezipeti elekaki mibu nkama inei na ntuku mwambe, o mobu mwa minei mwa bokonzi bwa Salomo o Israel, o sanza ya Ziv, sanza ya ibale ya mobu, Salomo abandi kotonga Tempelo.
I Ki LinVB 6:2  Tempelo Salomo atongeli Yawe ezalaki na bolai maboko ntuku motoba, bonene maboko ntuku ibale, bosanda maboko ntuku isato.
I Ki LinVB 6:3  Eko­teli ezalaki liboso lya Ndako enene : bolai maboko ntuku ibale, soko ola­ndi bonene bwa Tempelo, maboko zomi soko olandi bolai bwa Tempelo.
I Ki LinVB 6:4  Atii o Tempelo maninisa na mabaya mpe na bibende.
I Ki LinVB 6:5  Zongazonga na ndako enene mpe na ndako esantusantu abakisi mandako ma mikili misato.
I Ki LinVB 6:6  Mokili mwa nse mozalaki na bonene maboko matano, moye mwa kati maboko motoba, moye mwa likolo maboko nsambo, zambi mabaya ma mokili moko moko malalaki o mabanga ma efelo enene ya Tempelo.
I Ki LinVB 6:7  Batongi Tempelo na mabanga mabongisami liboso o esika mazwamaki. Makeléle ma bibeteli to pikasi to bisaleli bya bibende ata nini mazalaki te ntango bazalaki kotonga Tempelo.
I Ki LinVB 6:8  Boyingeli o mokili mwa nse bozalaki o loboko la mobali la Tempelo. Ebuteli ezalaki mpo ya kokoma o mokili mwa kati, mpe ebuteli esusu mpo ya kokoma o mokili mwa misato.
I Ki LinVB 6:9  Esi­lisi Salomo botongi Tempelo mpe bobongisi yango malamu, epai ya kati akembisi motondo mwa ndako na mabaya ma sédere.
I Ki LinVB 6:10  O mpe­mbeni ya Tempelo mobimba atongi ndako ya nse, bosanda maboko matano, ebakemi na Tempelo na nzete ya sédere.
I Ki LinVB 6:12  « Ozali kotonga Tempelo eye, kasi soko otosi mibeko mya ngai, olandi mimeseno mya ngai, omemyi mitindo mya ngai minso mpe osali lokola mibeko mitindi, nakokokisa mpo ya yo maloba maye nalobelaki tata wa yo,
I Ki LinVB 6:13  mpe nakofanda o kati ya bana ba Israel, nakotika mpe ekolo ya ngai Israel te. »
I Ki LinVB 6:15  Akembisi bifelo bya Te­mpe­lo epai ya kati na mabaya ma sédere, banda nse tee likolo. Azipi nse ya Tempelo na mabaya ma sédere.
I Ki LinVB 6:16  Ake­mbisi eteni ya liboso, eye ezali na bonene maboko ntuku ibale, na mabaya ma sédere, banda nse tee likolo ; yango ekomi ndako esantusantu.
I Ki LinVB 6:17  Eteni enene ya Tempelo, soko otiki esika esantusantu o liboso, ekoki na bolai maboko ntuku inei.
I Ki LinVB 6:18  Eteni mobimba ekembami na mabaya ma sédere ; o mabaya bayemi bilili bya bikutu mpe bya fulele ifungwani ; bazipi binso na mabaya ma sédere, bongo mabanga mamononi lisusu te.
I Ki LinVB 6:19  O eteni ya katikati ya Tempelo abongisi ndako esantu mpo ya kotia Sanduku ya Bondeko ya Yawe.
I Ki LinVB 6:20  Salomo akembisi esika esantusantu, eye ezali na bolai maboko ntuku ibale mpe na bosanda maboko ntuku ibale, na wolo kitoko. Atii altare kuna penepene mpe akembisi yango na mabaya ma sédere.
I Ki LinVB 6:21  Salomo akembisi Tempelo mobimba epai ya kati na wolo kitoko. O liboso lya esika esantusantu akangi minyololo mya wolo.
I Ki LinVB 6:22  Akembisi bongo Tempelo mobi­mba na wolo kitoko. Altare ya esika esantusantu esalemi mpe na wolo.
I Ki LinVB 6:23  O esika esantusantu asali bakerubim babale na mabaya ma oliva ; na bolai maboko zomi.
I Ki LinVB 6:24  Bolai bwa lipapu lyoko lyoko lya kerubim, maboko matano ; banda nsonge ya lipapu lyoko tee nsonge ya lipapu lisusu, maboko zomi.
I Ki LinVB 6:25  Kerubim mosusu ako­ki mpe na bolai maboko zomi ; bilili bya bakerubim babale bitulami se ndenge yoko.
I Ki LinVB 6:27  Salomo atii bakerubim o eteni ya katikati ya Tempelo. Mapapu mazalaki ma kofungwana. Epai ya libanda nso­nge ya mapapu isimbi bifelo bya ndako epai na epai ; nsonge ya mapapu epai ya kati ya bango babale mpe isimbami.
I Ki LinVB 6:29  Epai na epai ya bifelo bya Tempelo, o kati mpe o libanda akembisi bya­ngo na bilili bya bakerubim, bya nkele ya mbila mpe bya fulele ifungwani.
I Ki LinVB 6:30  Akembisi nse ya Tempelo na wolo, o kati ya ndako mpe o libanda.
I Ki LinVB 6:31  Asali ezibeli ya esika esantusantu na mabaya ma oliva ; libaya lya likolo na makonzi ma mpembeni mazalaki lokola eteni ya bitano ya ezibeli ya ndako.
I Ki LinVB 6:32  Akembisi makonzi mabale ma mpembeni na bilili bya bakerubim, bya nkele ya mbila mpe bya fulele ifungwani ; azipi binso na wolo.
I Ki LinVB 6:33  Asali se bongo na ezibeli ya ndako enene ; makonzi ma mpembeni masalemi na nzete ya oliva mpe mazalaki lokola eteni ya binei ya ezibeli ya ndako.
I Ki LinVB 6:34  Ezalaki wana mpe makonzi mabale ma mpembeni, masalemi na nzete ya sipresi ; atii wana mabaya mabale ma kofungwana epai na epai.
I Ki LinVB 6:35  Akembisi mango na bilili bya bakerubim bya nkele ya mbila mpe bya fulele ifungwani. Binso bizipami na wolo kitoko.
I Ki LinVB 6:36  Na nsima atongi bifelo bya lopango la kati ; kuna atii milongo misato mya mabanga manene na mpe molongo moko mwa mabaya manene ma sédere.
I Ki LinVB 6:37  O mobu mwa minei, o sanza ya Ziv, batii mabanga manene ma nse ma Tempelo ya Yawe.
I Ki LinVB 6:38  Mpe o mobu mwa zomi na moko, o sanza ya Bul, sanza ya mwambe, basilisi mosala mwa Tempelo lokola bakanaki kosala, na mpe misala mike. Salomo asali mibu nsambo mpo ya kosilisa ndako ena.
Chapter 7
I Ki LinVB 7:1  Salomo atongi mpe ndako ya ye moko. Asali mibu zomi na misato mpo ya kosilisa ndako mobimba.
I Ki LinVB 7:2  Atongi liboso ndako eye bakotangaka ‘Zamba ya Libano’, na bolai maboko monkama, na bonene maboko ntuku itano, na bosanda maboko ntu­ku isato. Ndako eye etongami o milongo minei mya makonzi, se mibimbi mya sédere. Mabaya manene ma sédere malali o makonzi mana.
I Ki LinVB 7:3  Mabaya make masali motondo mwa ndako mabakisami o mabaya manene, maye malali o makonzi. Ezalaki wana mabasa ntuku inei na matano, zomi na matano o molongo moko,
I Ki LinVB 7:4  mpe milongo misato mya maninisa ma mabaya ; lininisa lyoko lyoko lya milongo mina misato lizalaki kotalana na lininisa lisusu.
I Ki LinVB 7:5  Bizibeli bya ya­ngo bizalaki bolai mpe bonene motindo moko ; maninisa matiami na milongo misato, mazalaki kotalana.
I Ki LinVB 7:6  Atongi ndako enene ya makonzi ; bolai maboko ntuku itano, bonene maboko ntuku isato. Epai ya liboso atongi naino ekoteli na makonzi epai na epai, ná mpe mbalasani.
I Ki LinVB 7:7  Asali mpe ndako ya ngwende, esika azalaki kosambisa bato, ekembami na mabaya ma sédere, banda nse tee likolo.
I Ki LinVB 7:8  Ndako ya ye ya bofandi, atongi ya­ngo o lopango losusu ; atongi yango se motindo moko. Atongeli mpe mwa­na wa Farao, oyo ye abalaki, ndako esusu, eye ekokani na ndako ya ngwe­nde.
I Ki LinVB 7:9  Ndako inso itongami na mabanga manene ; bakataki mabanga manso na mosumani o epai ya kati mpe epai ya libanda. Mabanga mazalaki wana ba­nda nse tee motondo mwa ndako, mpe o libanda batongi mabanga tee o lopango lonene.
I Ki LinVB 7:10  Mabanga manene ma nse mazalaki mabanga makatami kitoko, makoki maboko zomi to mwambe.
I Ki LinVB 7:11  O mabanga ma nse batii mabanga masusu, maye bapaloli kitoko mpe makatemi na bolai bokoki na mabanga ma nse ; likolo babakisi mpe mabaya ma sédere.
I Ki LinVB 7:12  Zongazo­nga na lopango lonene batii mpe milongo misato mya mabanga manene, na mpe molongo moko mwa mabaya manene ma sédere. O lopango la kati ya Tempelo ya Yawe mpe o ekoteli ya yango basali se bongo.
I Ki LinVB 7:14  Mama wa Kiram azalaki mwasi bozenge, moto wa libota lya Neftali, kasi tata wa ye azalaki moto wa Tiro. Kiram azalaki motuli wa mbengi, moto wa mayele mingi mpe wa ntoki o mosala mona. Ayebi kotula biloko binso bya mbe-ngi. Ayei epai ya mokonzi Salomo mpe asali misala mya ye minso.
I Ki LinVB 7:15  Atuli makonzi manene mabale ma mbengi ; bolai bwa likonzi lyoko, maboko zomi na mwambe. Mpo ya komeka bozingi bwa lyango, osengeli na nsinga ya maboko zomi na mabale. Likonzi lya mabale se bongo.
I Ki LinVB 7:16  Asa­li mpe mitó mibale na mbengi mpo ya kotia o makonzi. Bolai bwa motó moko, maboko matano.
I Ki LinVB 7:17  Atuli mpe minyololo mya mbengi mika­ngemi lokola minyama mpo ya kozipa mitó mibale mya makonzi ; asali bongo minyama nsambo mpo ya kozipa motó moko, mpe minyama misusu nsambo mpo ya kozipa motó mosusu.
I Ki LinVB 7:18  Atuli mpe milongo mibale mya malala ma mbengi mpo ya kozinga minyama zongazonga na mitó mya makonzi. Asali se bongo na likonzi lya mabale.
I Ki LinVB 7:19  Mitó miye mizalaki o makonzi ma Ekoteli, mazalaki na fulele lokola lis, bolai maboko manei.
I Ki LinVB 7:20  Kasi mitó miye mizalaki o makonzi manene mabale mikembami na milongo mibale mya malala nkama ibale penepene na monyama.
I Ki LinVB 7:21  Asali se bongo na makonzi mana penepene na lopango la Tempelo ; likonzi epai ya mobali, apesi lyango nkombo Yakin ; liye epai ya mwasi, Boaz.
I Ki LinVB 7:22  Nso-nge ya mitó mya makonzi ezalaki lokola fulele ya lis. Basukisi mosala mwa makonzi malamu.
I Ki LinVB 7:23  Atuli mpe Ebombelo ya mai ya mbengi, na bonene maboko zomi, na lolenge la libungutulu ; na bosa­nda, maboko matano ; mpo ya komeka bozingi bwa yango osengeli na nsi­nga ya maboko ntuku isato.
I Ki LinVB 7:24  Ake­mbisi mpembeni ya ebombelo na bilili bya bikutu, na bolai loboko loko ; atii bilili zomi ; azingi bongo ebo­mbelo mobimba. Bilili bina bitongami na milongo mibale, bitulami esika yoko na Ebombelo ya mai.
I Ki LinVB 7:25  Ebo­mbelo ena etiami o ngombe zomi na ibale ya mbengi. Ngombe isato itali epai ya Nordi, isato epai ya Westi, isato epai ya Sudi mpe isato epai ya Esti. Ngombe inso ipesi mokongo epai ya kati.
I Ki LinVB 7:26  Mbinga ya yango ezalaki na bonene bwa loboko, mpe mpembeni ya yango ikembami na bilili bya fulele. Ekoki kokwa mai, katini ntuku mwambe.
I Ki LinVB 7:27  Atuli mpe bitemiseli bya mbengi zomi ; yoko yoko ezalaki na bolai maboko manei, na bonene maboko manei, na bosanda maboko masato.
I Ki LinVB 7:28  Bitemiseli bina bisalemi boye : katikati ya eye ya likolo mpe eye ya nse manzanza mazalaki.
I Ki LinVB 7:29  Manzanza mana makembami na bikeko bya nta­mbwe, bya ngombe mpe bya bake­rubim. Mpembeni ibale isalemi se bongo : bilili bya fulele bilandani lokola biteni bya monyololo, o likolo mpe o nse ya ntambwe mpe ya ngo­mbe.
I Ki LinVB 7:30  Bitemiseli binso bizalaki na yika ya mbengi inei, bikangani na nzete ya mbengi. Babakisaki mpe nzete ya bibende bisusu mpo ya kolendisa makolo ma yango. Bibakiseli biye bitulamaki o nse ya sani ya mai, kasi bisimbi bilili te.
I Ki LinVB 7:31  Bitemiseli bi­nso bizalaki na monoko epai ya likolo lya ezingeli mpe mobimi libanda bolai bwa loboko loko. Monoko mona mozalaki lokola libungutulu ; bonene bwa mwango loboko loko na ndambo. Mpembeni ya monoko eke­mbami na bilili. Manzanza mana magumbami lokola libungutulu te.
I Ki LinVB 7:32  Yika ina inei izalaki o nse ya ma­nzanza mana mpe ikangemi na bitemiseli. Bonene bwa yika yoko bozalaki loboko loko na ndambo.
I Ki LinVB 7:33  Yika ina isalemaki lokola yika ya likalo : na bikangiseli na biteni bya kati mpe bya libanda, binso bitulamaki na mbala yoko.
I Ki LinVB 7:34  Nzete iye babakisaki mpo ya kolendisa bitemiseli, isangani na yango lokola eloko yoko.
I Ki LinVB 7:35  O nso­nge ya etemiseli eteni esusu ya mbengi ezalaki, na bosanda ndambo ya loboko ; mpe epai ya likolo bisi­mbeli bizalaki, bikangemi makasi na etemiseli mobimba.
I Ki LinVB 7:36  Zongazonga na etemiseli, o manzanza mpe o bisi­mbeli, bilili bizalaki bya bakerubim, ntambwe na nkele ya mbila, na mpe monyololo mwa fulele epai na epai.
I Ki LinVB 7:37  Asali bitemiseli bina zomi se lole­nge loko. Binso bitulami na mbengi lolenge loko ; binso bikokani na bonene mpe na lolenge la bokeli.
I Ki LinVB 7:38  Asali lisusu sani ya mai zomi, itulami na mbengi. Yoko yoko ekoki ko­kwa katini ya mai monkama na ntuku motoba. Ekoki na bolai maboko manei. Sani yoko yoko etiami o bitemiseli.
I Ki LinVB 7:39  Bitemiseli bina bizalaki bitano epai ya mobali ya Tempelo mpe bitano epai ya mwasi ; kasi Ebombelo enene ya mai, atiaki yango o loboko la mobali epai ya Sudi-Esti.
I Ki LinVB 7:40  Kiram atuli mpe sani isusu na mpau na mbeki ya konyakela mai. Asukisi bongo misala minso o Te­mpelo ya Yawe, lokola mokonzi Salomo atindaki ye.
I Ki LinVB 7:41  Asali makonzi mabale na mitó mya yango, na mpe bikembiseli bibale zongazonga na mi­tó.
I Ki LinVB 7:42  Asali mpe bilili bya malala nkama inei mpo ya bikembiseli bina bibale ; bilili bina bya malala bitingami milongo mibale o ekembiseli yoko yoko mpo ya kozipa mitó mya makonzi.
I Ki LinVB 7:43  Asali mpe bitemiseli zomi na sani ya mai zomi o bitemiseli bina.
I Ki LinVB 7:44  Na nsima asali Ebombelo enene ya mai (eye ezalaki se yoko) ; ezalaki na bikeko bya ngombe zomi na bibale epai ya nse.
I Ki LinVB 7:45  Nsima asali sani, mpau na mbeki ya konyakela mai na biloko bisusu binso. Kiram atuleli mokonzi Salomo biloko bina binso na mbengi kitoko mpo ’te basala na byango misala o Tempelo ya Yawe.
I Ki LinVB 7:46  Mokonzi anyangwisi biloko bina binso o mabelé lido penepene na Yor-dane, kati ya Sukot na Sartan.
I Ki LinVB 7:47  Bameki bozito bwa mbengi te, mpo biloko bizalaki ebele.
I Ki LinVB 7:48  Salomo atii biloko binso bisalemi o Tempelo ya Yawe : altare ya wolo, meza ya wolo mpo ya kotia mampa ma mabonza,
I Ki LinVB 7:49  Bitemiseli bya mwi­nda bitano o loboko la mobali, na mpe bitano o loboko la mwasi, o boso bwa ndako esantusantu ; binso bisalemaki na wolo kitoko,
I Ki LinVB 7:50  na sani, na bizimiseli bya mwinda, mbeki ya konyakela mai, kopo, bingwekungweku ; binso bisalemaki na wolo kitoko ; asali mpe manzanza mazipi bizibeli bya Tempelo, epai bakokotoko o ndako esantusantu, na mpe maye mazalaki o bizibeli bya ndako enene : binso bisalemaki na wolo.
I Ki LinVB 7:51  Awa mokonzi Salomo asukisi misala mina minso mpo ya Tempelo ya Yawe, akotisi mpe biloko binso tata wa ye Davidi abonzelaki Yawe : palata, wolo na bisaleli bisusu ; atii binso o sanduku ya mosolo ya Tempelo ya Yawe.
Chapter 8
I Ki LinVB 8:1  Salomo abengi bakolo banso ba Israel, bakonzi ba bituka na ba­nkumu ba mabota, o Yeruzalem mpo ’te bakamata Sanduku ya Bondeko bwa Yawe o ngomba Sion, o Engu­mba ya Davidi.
I Ki LinVB 8:2  Ba-Israel banso bayei kosangana epai ya Salomo mpo ya eyenga, o sanza ya Etanim, sanza ya nsambo.
I Ki LinVB 8:4  Ema ya Likita na biloko bisantu bizalaki o kati.
I Ki LinVB 8:5  O boso bwa Sanduku mokonzi Salomo na ba-Israel banso babonzi mpata na ngombe ebele, bakokaki ko­tanga yango te.
I Ki LinVB 8:6  Banganga Nza­mbe batii Sanduku ya Bondeko o esika esantusantu, o nse ya mapapu ma bakerubim.
I Ki LinVB 8:7  Bakerubim batandi mapapu ma bango likolo lya esika eye batii Sanduku na mabaya ma bomemi yango.
I Ki LinVB 8:8  Mabaya maye mazalaki malai ; nsuka ya mango makoki komonono ut’o esika eye ezali liboso lya esika esantusantu. Kasi moto azali o libanda akoki komono mango te. Tee lelo mabaya mana mazali bobele kuna.
I Ki LinVB 8:9  O Sanduku izalaki se mabanga mabale maye Moze atiaki wana o ngomba Oreb. O mabanga mana Ya­we akataki bondeko na bana ba Israel ntango babimaki o Ezipeti.
I Ki LinVB 8:10  Ntango banganga Nzambe babimi o ndako esantu, londende loyei kotondisa Tempelo ya Yawe.
I Ki LinVB 8:11  Ba­nganga Nzambe bakoki lisusu kosala mosala mwa bango te mpo ya lo­ndende. Nkembo ya Yawe etondisi Tempelo ya Yawe.
I Ki LinVB 8:12  Nsima Salomo alobi : « Yawe andimi kozala o kati ya londende makasi.
I Ki LinVB 8:13  Yango wana natongeli yo ndako kitoko, o ndako eye okozala seko. »
I Ki LinVB 8:14  Mokonzi amibongoli mpe abenisi lisanga mobimba lya ba-Israel. Ba­nso bazalaki koteleme.
I Ki LinVB 8:15  Alobi : « Bakumisa Yawe Nzambe wa Israel, oyo akokisi na loboko la ye maye alake­laki tata wa ngai Davidi na maloba maye :
I Ki LinVB 8:16  ‘Banda mokolo nabimisaki bato ba ngai ba-Israel o Ezipeti, naponoki mboka yoko te o kati ya mabota ma Israel mpo ’te batongela ngai Ndako ; kasi naponoki se Davidi aya­ngela ekolo ya ngai Israel’.
I Ki LinVB 8:17  Tata wa ngai Davidi alingaki kotonga ndako mpo ya Nkombo ya Yawe Nzambe wa Israel.
I Ki LinVB 8:18  Kasi Yawe alobi na tata wa ngai Davidi : ‘Ozalaki na mposa ya kotongela Nkombo ya ngai ndako, mpe osalaki malamu.
I Ki LinVB 8:19  Nzoka­nde yo moto okotonga Ndako ena te, kasi mwana wa yo, oyo okobota, ye akotongela Nkombo ya ngai Ndako’.
I Ki LinVB 8:20  Yawe akokisi liloba lya ye. Ngai nakitani tata wa ngai Davidi mpe nafa­ndi o ngwende ya bokonzi bwa Israel lokola Yawe alobaki. Natongi Ndako eye mpo ya Nkombo ya Yawe Nza­mbe wa Israel.
I Ki LinVB 8:21  Kuna nabongisi esika mpo ya kotia Sanduku ya Bondeko bwa Yawe, bondeko akataki na bankoko ba biso ntango abimisaki ba­ngo o mokili mwa Ezipeti. »
I Ki LinVB 8:22  Na nsima Salomo akei koteleme liboso lya altare ya Yawe o miso ma bato banso ba Israel ; atomboli maboko,
I Ki LinVB 8:23  alobi : « Yawe, Nzambe wa Israel, Nzambe mosusu akokani na yo azali te, kuna o likolo te, awa o nse mpe te. Na bolingi bonene okobatelaka bo­ndeko na basaleli ba yo, baye bakola-ndaka nzela ya yo na motema moko.
I Ki LinVB 8:24  Okokisi elako olakelaki tata wa ngai Davidi, mosaleli wa yo. Maye olakeli ye na monoko mwa yo, okokisi mango lelo na maboko ma yo.
I Ki LinVB 8:25  Sikawa, e Yawe Nzambe wa Israel, kokisa elako olakeli tata wa ngai Davidi, mosaleli wa yo : ‘Soko bana ba yo bakengeli ezalela ya bango mpe basali malamu o miso ma ngai lokola yo osalaki o miso ma ngai, bokonzi bwa Israel bokotikala na bango seko.’
I Ki LinVB 8:26  Sikawa, e Nzambe wa Israel, kokisa elako olakelaki tata wa ngai Davidi, mosaleli wa yo.
I Ki LinVB 8:27  Nzambe akoki nde kofanda esika yoko na bato awa o nse, solo ? Nzambe aleki likolo na bonene, bongo boniboni ndako eye nato­ngi ekokoka nde na ye ?
I Ki LinVB 8:28  Yawe Nza­mbe wa ngai, oyoka losambo mpe bobo­ndeli bwa mosaleli wa yo, yoka bobya­ngi mpe losambo loye mosaleli wa yo azali kosambela yo lelo !
I Ki LinVB 8:29  Miso ma yo matala ndako eye butu moi, zambi olobaki mpo ya esika eye : Nkombo ya ngai ekozala wana. Ya­ngo wana yoka losambo ngai mosaleli wa yo nazali kosambela o ndako eye.
I Ki LinVB 8:30  Ondima losambo la ngai mosaleli wa yo, na mpe la bana ba Israel banso bakosambela o esika eye. Ut’o esika yo ozali, kuna o likolo, ndimela bango mpe limbisa bango.
I Ki LinVB 8:31  Soko moto asali moninga mabe mpe balayisi ye ndai, soko ayei kolaya bongo o boso bwa altare ya yo, o Ndako eye,
I Ki LinVB 8:32  yo ut’o likolo, yoka ye, sambisa basaleli ba yo, kitisa moto asali mabe mpo ’te mabe makwela ye, mpe longisa moto wa bosembo, oyo asali mabe te.
I Ki LinVB 8:33  Soko bato ba ekolo ya yo Israel bakiti o etumba na banguna, zambi basalaki masumu o miso ma yo, kasi soko na nsima bazongeli yo mpe bakumisi nkombo ya yo, soko basa-mbeli mpe babondeli yo o Tempelo eye,
I Ki LinVB 8:34  yo ut’o likolo yoka bango mpe limbisa masumu ma bato ba ekolo ya yo Israel ; zongisa bango lisusu o mokili opesaki bankoko ba bango.
I Ki LinVB 8:35  Soko likolo likangemi mpe mbula ebeti lisusu te, zambi bato basalaki masumu o miso ma yo, kasi na nsima basambeli o esika eye, bakumisi Nko­mbo ya yo mpe bayoki mawa mpo ya masumu ma bango, zambi opesaki bango etumbu,
I Ki LinVB 8:36  yo kuna o likolo yo­ka mpe limbisa masumu ma basaleli ba yo, bato ba ekolo ya yo Israel, lakisa bango nzela basengeli kolanda, mpe nokisa mbula o mokili opesaki bato ba yo.
I Ki LinVB 8:37  Ntango nzala makasi to bokono bobe bongali o mokili, to mbuma ya bilanga ibebi, ntango mapalela to makélele mayei, banguna bazingi mboka, to etumbu nini to bokono nini bongali,
I Ki LinVB 8:38  soko moto wa ekolo ya yo Israel asambeli to abondeli mabondeli ndenge na ndenge, mpe moto oyo ayoki motema mpasi mpo ya minyoko na bolozi mpe atomboli maboko epai ya yo o Tempelo eye,
I Ki LinVB 8:39  yo ut’o likolo esika okofandaka, yoka mpe limbisa, zongisela moto na moto lokola asalaki, zambi yo oyebi motema mwa ye, se yo moko oyebi mitema mya bato banso,
I Ki LinVB 8:40  bongo bakobanga yo mikolo minso mya bomoi bwa bango o mokili opesaki bankoko ba biso.
I Ki LinVB 8:41  Soko moto wa ekolo esusu, auti mosika mpo akumisa Nkombo ya yo o Tempelo eye,
I Ki LinVB 8:42  zambi ayoki nsango ya lokumu la Nkombo ya yo, mpe ya bokasi bwa yo bonene, mpe ayei kosambela yo o Tempelo eye,
I Ki LinVB 8:43  yoka ye ut’o likolo, mboka ya yo, pesa mo­mpaya manso asengi yo. Bongo bato ba bikolo binso bayeba yo, babanga yo lokola bato ba ekolo ya yo Israel bakobangaka yo, bayeba ’te Tempelo eye natongisi ezali Tempelo ya yo.
I Ki LinVB 8:44  Soko bato ba ekolo ya yo bakei ko­bunda etumba na banguna epai otindi bango, soko basambeli Yawe mpe babongoli elongi epai ya engu­mba eye oponoki mpe epai ya Tempelo eye natongeli Nkombo ya yo,
I Ki LinVB 8:45  ut’o likolo yoka losambo na mabondeli ma bango mpe longisa bango.
I Ki LinVB 8:46  Soko basali masumu o miso ma yo, zambi moto moko azangi lisumu te, mpe oyokeli bango nkanda, okabi bango mpe o maboko ma banguna, bongo banguna bakangi bango mpe bakei na bango o boombo o ekolo ya bango, mosika to te,
I Ki LinVB 8:47  soko na nsima o ekolo ena ya banguna, esika bazali baombo, bakanisi, babongoli mitema mpe babondeli yo na maloba maye : ‘Tosali masumu, tozangi bosembo, tosali mabe mpenza !’
I Ki LinVB 8:48  mpe na nsima bazongeli yo na motema moko mpe na mayele manso kuna o ekolo esika bazali baombo, basambeli yo mpe batali epai ya ekolo eye opesaki bankoko ba bango, epai ya engumba yo oponoki mpe epai ya Tempelo eye natongelaki Nkombo ya yo,
I Ki LinVB 8:49  ut’o likolo esika ozali, yoka losambo na mabondeli ma bango mpe longisa bango.
I Ki LinVB 8:50  Limbisa mabe bato ba yo basalaki yo, limbisa masumu ma bango manso, mpe sala ’te banguna bayokela bango mawa, mpe baye bakangaki bango o boombo bayokela bango ngolu.
I Ki LinVB 8:51  Mpamba te, bango bazali bato ba ekolo ya yo, bazali bato ba yo, bato yo moko obimisaki o Ezipeti, esika bayokaki mpasi mingi.
I Ki LinVB 8:52  Miso ma yo mafungwana polele mpo ya mabondeli ma mosaleli wa yo mpe ma bato ba ekolo ya yo Israel, yoka bango mbala inso bakobelela yo,
I Ki LinVB 8:53  zambi o kati ya bikolo binso bya nse, yo oponoki se bango bazala bato ba yo, lokola osakolaki na monoko mwa mosaleli wa yo Moze o eleko obimisaki bankoko ba biso o Ezipeti, e Yawe Mokonzi wa biso. »
I Ki LinVB 8:54  Esilisi Salomo kobondela Yawe, alongwi o esika afukamaki mpe atombolaki maboko liboso lya altare ya Yawe.
I Ki LinVB 8:55  Salomo atelemi mpe na mongongo makasi abenisi lisanga mobimba lya Israel, alobi :
I Ki LinVB 8:56  « Bakumisa Yawe Oyo apesaki bato ba Israel boboto, lokola alakelaki. Maloba manso alobaki na monoko mwa Moze, mosaleli wa ye, makokisami !
I Ki LinVB 8:57  Yawe Nzambe wa biso azala na biso loko­la azalaki na bankoko ba biso ; atika biso te, abwaka biso mpe te !
I Ki LinVB 8:58  Asunisa mitema mya biso epai ya ye, mpo tolanda nzela ya ye inso, mpe totosa mitindo, mibeko na biti­nda binso apesaki bankoko ba biso.
I Ki LinVB 8:59  Maloba manso nalobelaki bino matikala ntango inso o matoi ma Yawe Nzambe wa biso, mpo ’te mokolo na mokolo apesa mosaleli wa ye, na bato ba Israel banso, biye bisengeli na bango mokolo na mokolo.
I Ki LinVB 8:60  Bongo bato ba bikolo binso bayeba ’te Yawe azali Nzambe wa biso, nzambe mosusu azali te !
I Ki LinVB 8:61  Bopesa Yawe Nzambe wa biso mitema mya bino ntango i­nso, mpo ’te bokoka kolanda nzela ya ye mpe kotosa mibeko mya ye lokola bozali kosala lelo. »
I Ki LinVB 8:62  Mokonzi na bato banso ba Israel babonzeli Yawe miboma.
I Ki LinVB 8:63  Bo miboma mya bondeko, Salomo abonzeli Yawe ngombe babali nkoto ntuku ibale na ibale, na mpata nkoto mo­nkama na ntuku ibale. Mokonzi na bato banso ba Israel basalaki bongo mpo ya bobenisi Tempelo ya Yawe.
I Ki LinVB 8:64  O mokolo mona mokonzi abenisi libanda o boso bwa Tempelo ya Yawe. Bobele o esika ena mokonzi abo­nzi mabonza ma kotumba, mabonza ma bolei na mafuta ma miboma mya bondeko, zambi altare ya mbengi, eye ezali liboso lya Yawe, ekokaki te na bokwi mabonza manso ma kotumba, na mabonza ma bolei na miboma mya bondeko.
I Ki LinVB 8:65  Salomo asepeli eyenga ena o sa­nza ya nsambo elongo na ba-Israel banso. Ezalaki wana bato ba ekolo mobimba, banda Amat tee ebale ya Ezipeti, basangani o miso ma Yawe Nzambe wa biso, mikolo nsambo ; basepeli naino mikolo nsambo misusu, lokola ’te mikolo zomi na minei.
I Ki LinVB 8:66  O mokolo mwa mwambe Salomo apesi bato nzela bakende. Batondi Salomo botondi mpe bazongi o mboka, moto na moto o ema ya ye ; basepeli mingi mpe mitema mitondi na nsai mpo ya malamu manso Yawe asalaki mosaleli wa ye Davidi na bato banso ba Israel.
Chapter 9
I Ki LinVB 9:1  Esilisi Salomo kotonga Tempelo ya Yawe, na ndako ya mokonzi, na ndako isusu inso alingaki kotonga,
I Ki LinVB 9:2  Yawe amimonisi lisusu na ye mbala ya ibale se lokola abimelaki ye o Gabaon.
I Ki LinVB 9:3  Yawe alobi na ye : « Nayoki losambo na mabondeli ma yo ; nasan­tisi Ndako eye otongaki mpo ’te nko­mbo ya ngai ezala wana seko ; miso na motema mwa ngai bikozala se wana.
I Ki LinVB 9:4  Soko otamboli o miso ma ngai motema moko mpe na bosembo, lokola tata wa yo Davidi, mpe osali maka­mbo manso natindaki yo, omemyi mibeko na mimeseno mya ngai mi­nso,
I Ki LinVB 9:5  bokonzi bwa yo bokoumela seko, lokola nalakelaki tata wa yo Davidi : Mikolo minso nkoko wa yo akofanda o ngwende ya Israel.
I Ki LinVB 9:6  Kasi soko yo to bana ba yo botiki ngai, soko boboyi kotosa bitinda mpe mibeko mya ngai miye nalakisaki yo, soko bolandi banzambe basusu mpe bo­ku­misi bango,
I Ki LinVB 9:7  ngai nakolongola ba-Israel o mokili napesaki bango. Te­mpe­lo eye nasantisi, nakobwaka ya­ngo mosika na ngai, mpe bato ba­nso bakokomisa Israel lisapo mpe liseki.
I Ki LinVB 9:8  Bato bakoleka penepene na Tempelo eye enene bakokamwa, bakowulola mpe bakomituna : Mpo nini Yawe asali bongo na ekolo mpe na Ndako eye ?
I Ki LinVB 9:9  Bato bakoloba : Ezali mpo batiki Yawe Nzambe wa bango oyo abimisaki bankoko ba bango o mokili mwa Ezipeti, mpo bamipesi na banzambe basusu mpe bakumisi bango ; ntina ena Yawe ayokisi bango mpasi eye. »
I Ki LinVB 9:10  Nsima ya mibu ntuku ibale Salomo asilisi kotonga ndako ibale, Te­mpelo ya Yawe na ndako enene ya ye moko mokonzi.
I Ki LinVB 9:11  Kiram, mokonzi wa Tiro, asalisaki ye na mabaya ma sédere mpe ma sipresi ; atindelaki ye mpe wolo, lokola motema mwa ye molingaki. Bongo Salomo akabeli ye mboka ntuku ibale o mokili mwa Galilea.
I Ki LinVB 9:12  Kiram alongwi o Tiro mpo atala mboka Salomo akabeli ye, kasi asepeli na yango te.
I Ki LinVB 9:13  Alobi : « E ndeko, nasala nini na mboka iye okabeli ngai ? » Tee lelo bakotangaka mboka ina ‘Mokili mwa Kabul’.
I Ki LinVB 9:14  Kiram ati­ndeli mokonzi talenta ya wolo mo­nkama na ntuku ibale.
I Ki LinVB 9:15  Salomo atongisi bongo Tempelo ya Yawe, ndako ya ye moko moko­nzi, ndako ya Milo na lopango lonene lokozinga Yeruzalem, na mboka Asor, Megido na Gezer.
I Ki LinVB 9:16  Liboso Farao, mokonzi wa Ezipeti, akendeki kobunda etumba, abotoloki Gezer, atumbaki yango na móto, mpe abomaki ba-Kanana banso ; na nsima aka­belaki mwana wa ye, mwasi wa Salomo, mboka ena bo mosolo mwa libala.
I Ki LinVB 9:17  Mpe Salomo atongi Gezer lisusu, na mpe Bet-Koron,
I Ki LinVB 9:19  na mpe mboka inso esika bakobomba biloko, na bingu­mba mpo ya basoda, esika bakokotisa makalo na farasa ya bango. Salomo atongi mpe ndako inso iye alingi kotonga o Yeruzalem, o Libano, mpe bipai binso esika azalaki mokonzi.
I Ki LinVB 9:20  Efandaki wana naino ba-Amor, ba-Iti, ba-Perizi, ba-Ivi na ba-Yebus, ba­ngo bazalaki ba-Israel mpenza te.
I Ki LinVB 9:21  Salomo akamati bana ba bango batikali o mokili, baye ba-Israel babomaki te, bazala baombo mpo basala mosala makasi tee lelo.
I Ki LinVB 9:22  Kasi Salomo atindi ba-Israel mosala mona mwa baombo te, mpo bango bazalaki kosala mosala mwa soda, bazalaki bakengeli ba ye, bakomanda, bato bakomemeke bibuneli bya ye, bakapita na baye bakotambwisaka makalo na farasa ya ye.
I Ki LinVB 9:23  Bakapita bakotalaka misala mya Salomo, bakoki nkama itano na ntuku itano : bango bazalaki kotinda bato misala mya bango.
I Ki LinVB 9:24  Mo­kolo moko mwana wa Farao atiki Engumba ya Davidi mpo afanda o ndako ya sika Salomo atongelaki ye ; nsima atongi ndako ya Milo.
I Ki LinVB 9:25  Mbala isato o mobu, Salomo abo­nzi mabonza ma kotumba na miboma mya bondeko o altare eye ato­ngelaki Yawe, mpe atumbi mpaka ya malasi o boso bwa Yawe. Bobele bo­ngo asilisi kotonga Tempelo.
I Ki LinVB 9:26  Mokonzi Salomo atongi mpe masuwa o Esion-Geber, penepene na Elat, o libongo lya Mbu Etane, o moki­li mwa Edom.
I Ki LinVB 9:27  Kiram apesi ye basali ba ye, bato ba masuwa, bato bayebi mai malamu ; bango bazalaki kosalisa bato ba Salomo.
I Ki LinVB 9:28  Bakei o Ofir mpe ut’o kuna bayei na talenta ya wolo nkama inei na ntuku itano, bapesi Salomo yango.
Chapter 10
I Ki LinVB 10:1  Mokonzi mwasi wa Saba ayoki nsango ya lokumu la Salomo, yango wana ayei komeka ye na mituna.
I Ki LinVB 10:2  Akomi o Yeruzalem na kamela ebele ikumbi malasi, wolo na mabanga ma motuya, mingi mpenza. Awa akomi epai ya Salomo, ayebisi ye manso azalaki kokanisa.
I Ki LinVB 10:3  Salomo alimboli makambo manso atunaki ye ; motuna moko moleki mayele ma ye te.
I Ki LinVB 10:4  Emoni mokonzi mwasi wa Saba bwanya bwa Salomo mpe ndako enene ye atongaki, makanisi ma ye makei mosika.
I Ki LinVB 10:5  Amoni bilei o meza ya ye, bonzenga bwa basaleli mpe bilamba bya bango, bato bakobongaka vino na mabonza Salomo azalaki kobonza o Tempelo ya Yawe.
I Ki LinVB 10:6  Alobi na ye : « Nsango ya yo mpe ya bwanya bwa yo nayokaki o ekolo ya ngai, ezali ya solo mpenza.
I Ki LinVB 10:7  Nakokaki ko­ndima te, liboso ’te namono na miso. Nzokande maye bayebisaki ngai mazali make, zambi bwanya mpe lokumu la yo bileki mingi, bayebisaki ngai se ndambo.
I Ki LinVB 10:8  Esengo na bato ba yo mpe na basaleli baye bazali ntango inso penepene na yo mpe bakoki koyoka bongo bwanya bwa yo.
I Ki LinVB 10:9  Lokumu na Yawe Nzambe wa yo, oyo abe­nisi yo mpe afandisi yo o ngwe­nde ya bokonzi ya Israel. Solo, Yawe alingi Israel seko ; yango wana akomisi yo mokonzi mpo oyangela Israel na bosembo. »
I Ki LinVB 10:10  Abonzeli mokonzi talenta ya wolo monkama na ntuku ibale ; akabeli ye malasi mingi na mayaka ebele ma motuya. Mokonzi mwasi wa Saba ame­meli mokonzi Salomo malasi mingi ; ata mokolo moko te bayei lisusu na malasi ebele boye.
I Ki LinVB 10:11  Se bongo, masuwa ma Kiram, ma­ye mayaki na wolo ya Ofir, mayei mpe na mabaya ma kambala, ebele mpenza, na mpe mabanga ma motuya.
I Ki LinVB 10:12  Na mabaya ma kambala Salomo abongisi nse ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya ye moko ; na yango asali mpe nzenze na makembe mpo ya bayembi. Basilisi nzete inso ya ka­mbala, na nsima imononi lisusu te tee lelo.
I Ki LinVB 10:13  Mokonzi Salomo apesi moko­nzi mwasi wa Saba biloko binso ali­ngi na makabo manso ye moko alingi kopesa ye, maleki mingi ; bobele Salomo akoki kosala bongo. Na nsima mo­konzi mwasi azongi o ekolo ya ye elongo na basaleli ba ye.
I Ki LinVB 10:14  Salomo azalaki kozwa mobu na mobu talenta ya wolo nkama motoba na ntuku motoba na motoba.
I Ki LinVB 10:15  Azwi naino mosolo mosusu o maboko ma bato ba mombongo mpe ma bato banso bakoteke biloko, ma bakonzi ba Arabu mpe ma bayangeli banso ba ekolo ya ye.
I Ki LinVB 10:16  Mokonzi Salomo atulisi nguba inene ya wolo nkama ibale ; yoko yoko esalemi na kilo motoba ya wolo.
I Ki LinVB 10:17  Atulisi mpe nguba ike ya wolo nkama isato ; yoko yoko esalemi na kilo yoko na ndambo ya wolo ; akei kotika yango o Ebombelo ya Zamba ya Libano.
I Ki LinVB 10:18  Mokonzi asali mpe ngwende enene ya bokonzi, asali yango na mpembe ya nzoku mpe akembisi yango na wolo kitoko.
I Ki LinVB 10:19  Ngwende eye ezalaki na bibuteli motoba mpe na libaya lya mokongo ligumbami, na mpe bisimbeli mpo ya maboko epai na epai ya ngwende. Bikeko bya ntambwe bibale bizalaki o nse ya bisimbeli bya maboko ;
I Ki LinVB 10:20  epai na epai ya bibuteli motoba, bikeko zomi na bibale bya ntambwe bizalaki mpe. O ekolo ata yoko te basalaki mosala monene boye.
I Ki LinVB 10:21  Mbeki inso ya komele ya moko­nzi Salomo isalemaki na wolo, mpe biloko binso bya Ndako ya Zamba ya Libano bisalemaki na wolo kitoko. Eloko yoko esalemaki na palata te, zambi o mikolo mya Salomo bazalaki kotala palata lokola eloko mpa­mba.
I Ki LinVB 10:22  Solo, mokonzi azalaki mpe na masuwa manene ma Tarsis mpo ya kokatisa mbu enene, na mpe masuwa ma Kiram ; nsima ya mibu misato misato mazalaki koya na wolo, palata, mpembe ya nzoku, nkema na ndeke lipombo.
I Ki LinVB 10:23  Mokonzi Salomo akomi koleka bakonzi banso ba nse na nkita mpe na bwanya.
I Ki LinVB 10:24  Bato banso bazalaki kolinga kokende epai ya Salomo mpo bayoka maloba ma bwanya Nzambe atii o motema mwa ye.
I Ki LinVB 10:25  Mobu na mobu bato banso bayei na mabonza : biloko bya palata mpe bya wolo, bilamba, bibuneli, mpaka ya malasi, farasa na mpunda.
I Ki LinVB 10:26  Salomo asangisi mpe makalo na farasa. Azalaki na makalo nkoto yoko na nkama inei, na batambwisi farasa nkoto zomi na ibale. Atindi ba­ngo o mboka ya basoda ba ye, mpe epai ya ye moko o Yeruzalem.
I Ki LinVB 10:27  Mokonzi asali makasi mpo ’te o Yeruzalem palata ikoma mingi lokola maba­nga make, mpe sédere ikoma mingi lokola sikomore penepene na mbu.
I Ki LinVB 10:28  Farasa ya Salomo iutaki o Ezipeti mpe o Silisia.
I Ki LinVB 10:29  Bazalaki kofuta likalo lya Ezipeti na mitako mya palata nkama motoba, farasa yoko mitako mya palata monkama na ntuku itano. Se bongo bakonzi ba-Iti mpe ba-Aram bazalaki kosomba yango kuna o maboko ma bato ba mombongo.
Chapter 11
I Ki LinVB 11:1  Mokonzi Salomo azalaki kolinga basi ebele ba bikolo bisusu. Nsima ya kobala mwana wa Fa­rao, abali mpe basi epai ya ba-Moab, ba-Amon, ba-Edom, ba-Sidoni na ba-Iti.
I Ki LinVB 11:2  Bautaki o bikolo biye Yawe ayebisaki ba-Israel : « Bokende epai ya bango te, bango mpe baya epai ya bino te, zambi bango bakobenda mitema mya bino epai ya banzambe ba bango. » Kasi Salomo alingi bikolo bina mpo ya basi ba ye.
I Ki LinVB 11:3  Abalaki basi nkama nsambo ba mabota ma bakonzi, mpe akamataki bamakango nkama isato. Basi baye babebisi ye motema.
I Ki LinVB 11:4  Awa Salomo akomi mobange, basi ba ye babebisi ye motema, bongo abandi kokumisa banzambe basusu ; andimi lisusu Yawe Nzambe wa ye na motema moko te, lokola tata wa ye Davidi azalaki kondima Yawe.
I Ki LinVB 11:5  Salomo andimi Astarte, nzambe wa ba-Sidoni, na mpe Milkom, nzambe wa nsomo ya ba-Amon.
I Ki LinVB 11:6  Salomo asa­li mabe o miso ma Yawe, mpe andimi ye na motema moko te lokola tata wa ye Davidi.
I Ki LinVB 11:7  O ntango ena Salomo ato­ngeli Kemos, nzambe wa nsomo wa ba-Moab, ndako o ngomba o Esti ya Yeruzalem. Atongeli mpe Milkom, nzambe wa nsomo wa ba-Amon, ndako.
I Ki LinVB 11:8  Asali mpe bongo mpo ya kosepelisa basi ba ye bautaki o bikolo bisusu. O bisika bina basi ba ye ba­zalaki kobonzela bikeko bya bango mpaka ya malasi na mabonza masusu.
I Ki LinVB 11:9  Yawe, Nzambe wa Israel, ayokeli Salomo nkanda, mpo alongoli motema epai ya Ye, ata abimelaki ye mbala ibale.
I Ki LinVB 11:10  Apekisaki ye ’te alanda ba­nzambe basusu te, kasi Salomo atosi motindo mona te.
I Ki LinVB 11:11  Yango wana Yawe alobi na ye : « Awa osali bongo mpe otosi bondeko bwa ngai te, obuki mibeko napesaki yo, nakobotolo yo bokonzi, nakopesa bwango na moko wa basaleli ba yo.
I Ki LinVB 11:12  Kasi mpo ya nkombo ya tata wa yo Davidi, nakosala bongo te awa ozali naino na bomoi, kasi nakobotolo bokonzi o maboko ma mwana wa yo.
I Ki LinVB 11:13  Nakobotolo ye bokonzi bonso te, nakotikela mwana wa yo libota lyoko, mpo ya Davidi, mosaleli wa ngai, mpe mpo ya Yeruzalem, mboka ngai naponoki. »
I Ki LinVB 11:14  Yawe akomisi Adad wa libota lya mokonzi wa Edom, monguna wa Salomo.
I Ki LinVB 11:15  O eleko Davidi alongaki ba-Edom, Yoab, komanda wa basoda ba ye, akendeki kokunda bibembe bya babali banso abomaki o Edom.
I Ki LinVB 11:16  Yoab na bato banso ba Israel batikalaki kuna sanza motoba tee basili­si koboma babali banso o Edom.
I Ki LinVB 11:17  Adad akimaki o Ezipeti elongo na ba-Edom, basaleli ba tata wa ye ; Adad azalaki naino elenge.
I Ki LinVB 11:18  Balongwaki o Madian mpe bakomaki o Paran ; ba-Paran mpe bakendeki na bato basusu o Paran o Ezipeti epai ya Farao, mokonzi wa Ezipeti. Ye apesi bango nda­ko, aleisi bango mpe apesi bango mabelé.
I Ki LinVB 11:19  Farao alingaki Adad mingi, mpe abalisi ye ndeko wa mwasi wa ye Tapenes, oyo bakobyangaka ‘Mama Mokonzi’.
I Ki LinVB 11:20  Ndeko wa Tapenes aboteli ye mwana mobali Genubat ; Tapenes abokoli ye o ndako ya mokonzi Farao, Genubat akoli o ndako ya Farao o kati ya bana ba Farao.
I Ki LinVB 11:21  Kuna o Ezipeti Adad ayoki ’te Davidi akufi mpe akei kokutana na bankoko ba ye ; ayoki mpe ’te Yoab, komanda wa basoda, awei. Bongo alobi na Farao : « Tika ngai nakende, nalingi kozonga o ekolo ya ngai. »
I Ki LinVB 11:22  Farao alobi na ye : « Eloko nini eza­ngi yo awa epai ya ngai mpo ’te oluka kozonga o ekolo ya yo ? » Azongisi : « Eloko te, kasi tika ngai nakende. »
I Ki LinVB 11:23  Nzambe akomisi mpe Rezon, mwana wa Eliada, monguna wa Salomo. Akimaki nkolo wa ye Adadezer, mokonzi wa Soba.
I Ki LinVB 11:24  Azwaki baninga mpe akomi mokonzi wa bato ba mobulu. Awa Davidi azalaki koboma ba­ngo, bakimaki o Damasko, bafa­ndaki kuna mpe bazwaki bokonzi o mboka ena.
I Ki LinVB 11:25  Rezon azalaki monguna wa Israel bomoi bwa Salomo mobi­mba. Mabe Adad asalaki : Awa azalaki mokonzi wa Aram, azalaki koyina ekolo Israel.
I Ki LinVB 11:26  Yeroboam, mwana wa Nebat, aza­laki moto wa libota lya Efraim, wa mboka Sereda ; mama wa ye azalaki mwasi bozenge, nkombo ya ye Serua. Yeroboam azalaki mosaleli wa Salomo, mpe atomboki na mokonzi.
I Ki LinVB 11:27  Yoka boniboni atomboki na ye : Salo­mo azalaki kotonga Milo mpe kobongisa lopango penepene na Engu­mba ya Davidi, tata wa ye.
I Ki LinVB 11:28  Yeroboam azalaki moto wa mpiko mpe ayebi mosala. Salomo amonoki lole­nge azalaki kobongisa mosala, yango wana atii ye kapita wa basali banso ba libota lya Yozefu.
I Ki LinVB 11:29  Mokolo moko Yeroboam alo­ngwi o Yeruzalem ; o nzela akutani na profeta Akia, moto wa Silo, alati ela­mba ya sika ; bazalaki se bango babale.
I Ki LinVB 11:30  Akia akamati elamba ya ye ya sika mpe apasoli yango na biteni zomi na bibale.
I Ki LinVB 11:31  Alobi na Yeroboam : « Kamata biteni zomi ; mpamba te, Yawe Nzambe wa Israel alobi : Tala, nakobotolo bokonzi o maboko ma Salomo, mpe nakopesa yo mabota zomi.
I Ki LinVB 11:32  Ye akotikala se na libota lyoko ; nakosala bongo mpo ya Davidi mosaleli wa ngai mpe mpo ya Yeruzalem, mboka naponoki o kati ya mabota manso ma Israel.
I Ki LinVB 11:33  Nakosala bongo zambi aboyaki ngai mpe aku-mbamelaki Astarte, nzambe wa ba-Sidoni, Kemos, nzambe wa ba-Moab, mpe Milkom, nzambe wa ba-Amon. Alandaki nzela ya ngai te mpe asalaki mabe o miso ma ngai, atosaki mibeko na bitinda bya ngai te lokola tata wa ye Davidi.
I Ki LinVB 11:34  Nakobotolo ye bokonzi te, zambi natiaki ye mokonzi bomoi bwa ye mobimba, mpo ya mosaleli wa ngai Davidi, oyo naponoki, oyo atosaki bitinda na mibeko mya ngai.
I Ki LinVB 11:35  Kasi nakobotolo bokonzi o maboko ma mwana wa ye, mpe nakopesa yo bokonzi bwa mabota zomi.
I Ki LinVB 11:36  Nzo­kande nakotikela mwana wa ye libota lyoko ; bongo mosaleli wa ngai Davidi akozala seko na mwana moko, oyo akoki kozala mwinda o miso ma ngai o Yeruzalem, mboka eye naponoki mpo ’te nkombo ya ngai ezala kuna.
I Ki LinVB 11:37  Kasi nakokamata yo ; okozala mo­konzi bipai binso olingi ; mpe okozala mokonzi wa Israel.
I Ki LinVB 11:38  Soko otosi makambo manso nakotinda yo, soko olandi nzela ya ngai mpe osali malamu o miso ma ngai, soko ome-myi mibeko na bitinda bya ngai bi­nso, lokola mosaleli wa ngai Davidi asalaki, nakozala na yo mpe nakobongisela yo bokonzi bwa seko se lokola nasalaki na Davidi. Nakopesa yo bokonzi bwa Israel.
I Ki LinVB 11:39  Nakokitisa libota lya Davidi, kasi seko te. »
I Ki LinVB 11:40  Salomo aluki koboma Yero­boam ; oyo akei mpe akimi o Ezipeti epai ya Sesonk, mokonzi wa Ezipeti ; tee liwa lya Salomo atikali kuna.
I Ki LinVB 11:41  Makambo masusu ma bomoi bwa Salomo, makambo manso asalaki na mpe bwanya bwa ye, manso makomami o buku ya Bikela bya Salomo.
I Ki LinVB 11:42  Salomo azalaki mokonzi wa bato banso ba Israel o Yeruzalem mibu ntu­ku inei.
I Ki LinVB 11:43  Na nsima Salomo akei kokutana na bankoko ba ye, bakundi ye o Engumba ya Davidi, tata wa ye ; mwana wa ye Roboam akitani ye.
Chapter 12
I Ki LinVB 12:1  Roboam akei o Sikem, mpo bato banso ba Israel bake­ndeki kuna mpo ya kolubola ye mokonzi.
I Ki LinVB 12:2  Yeroboam, mwana wa Nebat, azalaki naino o Ezipeti, esika akimaki, ntango ayoki nsango ena.
I Ki LinVB 12:3  Batindi bato babenga Yeroboam. Bongo ayei elongo na bato banso ba Israel ; balobi na Roboam maloba maye :
I Ki LinVB 12:4  « Tata wa yo atielaki biso mokumba monene, yo sikawa longola ndambo ya mosala makasi mpe mwa mokumba bozito tata wa yo atieli biso, bongo tokosalela yo. »
I Ki LinVB 12:5  Roboam alobi na bango : « Bokende naino mikolo misato, na nsima bozonga epai ya ngai. » Bongo bakei.
I Ki LinVB 12:6  Mokonzi Roboam akei epai ya bankumu, baye bazalaki kosalela tata wa ye Salomo, atuni bango : « Bokanisi nini ? Napesa bango eyano nini ? »
I Ki LinVB 12:7  Bazongisi : « Soko lelo ondimi kozala mosaleli wa bango, soko otosi bango mpe olobi na bango maloba ma boboto, bango mpe bakondima kosalela yo seko. »
I Ki LinVB 12:8  Kasi Roboam aboyi kolanda malako ma bankumu mpe akei kotuna bilenge ba mboka, baye bakolaki na ye esika yoko mpe bazalaki kosalela ye.
I Ki LinVB 12:9  Atuni bango : « Bino bokanisi nini ? Eyano nini nakoki kopesa bato balobaki na ngai : Longola ndambo ya mosala makasi tata wa yo atindaki biso ? »
I Ki LinVB 12:10  Bilenge, baye bakolaki na ye esika yoko, bazongiseli ye : « Bato balobaki na yo : Tata wa yo atielaki biso mokumba monene, kasi yo longola ndambo ya mosala makasi, ozongisela bango : Mosapi moke mwa ngai moleki loketo la tata wa ngai na bonene.
I Ki LinVB 12:11  Banda lelo, awa tata wa ngai atielaki bino mokumba monene, ngai nakobakisa naino bozito ; tata wa ngai azalaki kobete bino fimbo, ngai nakobete bino fimbo ya bibende. »
I Ki LinVB 12:12  Nsima ya mikolo misato Yero­boam na bato ba ye bayei epai ya Roboam, lokola alobaki na bango : « Bozonga epai ya ngai nsima ya mikolo misato. »
I Ki LinVB 12:13  Mokonzi apesi bato eyano ebe, aboyi lilako bankumu bapesaki ye,
I Ki LinVB 12:14  alandi bobele lilako lya bilenge mpe alobi na bango : « Tata wa ngai atielaki bino mokumba bozito, ngai nakobakisa naino bozito ; tata wa ngai abeteki bino fimbo, ngai nakobete bino fimbo ya bibende. »
I Ki LinVB 12:15  Mokonzi aboyi bongo koyoka ma­loba ma bato. Sikawa Yawe akoti o likambo mpo ’te akokisa maloba ma Akia, moto wa Silo, maye alobaki na Yeroboam, mwana wa Nebat.
I Ki LinVB 12:16  Awa ba-Israel bamoni ’te mokonzi aboyi koyoka maloba ma bango, bazongiseli ye : « Biso na Davidi tozali ekolo yoko te ! Mwana wa Yese azali moto wa biso te ! Bato ba Israel, bozonga o biema bya bino ! Sikawa Davidi, yo moko obatela libota lya yo ! » Ba-Israel bazongi o biema bya ba­ngo.
I Ki LinVB 12:17  Roboam ayangeli bana ba Israel, baye bakofandaka o mboka inso ya Yuda.
I Ki LinVB 12:18  Mokonzi Roboam atindeli bango Adoram, kapita wa bangamba, kasi ba-Israel babwakeli ye mabanga mpe babomi ye. Mokonzi Roboam abuti likalo lya ye noki mpe akimi o Yeruzalem.
I Ki LinVB 12:19  Bongo ba-Israel baka­bwani na libota lya Davidi tee lelo.
I Ki LinVB 12:20  Eyoki bato banso ba Israel ’te Yeroboam azongi, babengi ye o lisanga lya bango mpe baluboli ye mokonzi wa Israel mobimba. Bobele bato ba libota lya Yuda bandimi kolanda libota lya Davidi.
I Ki LinVB 12:21  Roboam akei o Yeruzalem, abe-ngi bato banso ba libota lya Yuda mpe lya Benyamin. Asangisi basoda ba mpiko nkoto monkama na ntuku mwambe mpo ya kobunda etumba na ba-Israel, mpo ’te bokonzi bozo­nga o maboko ma Roboam, mwana wa Salomo.
I Ki LinVB 12:22  Kasi Nzambe alobi na Semaya, moto wa Nzambe :
I Ki LinVB 12:23  « Loba na Roboam, mwana wa Salomo, mokonzi wa Yuda, na bato banso ba libota lya Yuda, na Benyamin mpe na bato basusu maloba maye :
I Ki LinVB 12:24  Yawe alobi : Botika kobunda na bandeko ba bino, bana ba Israel ; banso bozonga o mboka, moto na moto o ndako ya ye ; awa bokabwani lelo, ngai nalingaki bongo. » Bayoki liloba lya Yawe mpe banso bazongi o mboka ya bango lokola Yawe alobaki.
I Ki LinVB 12:25  Yeroboam azingi Sikem o kati ya ngomba ya Efraim na lopango, mpe akei kofanda kuna. Na nsima atiki Sikem mpe akei kolendisa mboka Penuel.
I Ki LinVB 12:26  Yeroboam amilobeli : « Bongo libota lya Davidi likokoma lisusu na bokonzi.
I Ki LinVB 12:27  Soko bato bakobi koke­nde o Yeruzalem mpo ya kobonza o Tempelo ya Yawe, mbele bakolanda lisusu Roboam, mokonzi wa Yuda, mpe bakoboma ngai ! »
I Ki LinVB 12:28  Atuni balaki ba ye, na nsima asali bikeko bibale bya ngombe na wolo, mpe alobi na bato : « Tee lelo boke-ndeki kosambela o Yeruzalem. Ekoki sikawa : Bato ba Israel, botala ekeko ya Nzambe wa bino, oyo abimisaki bino o mokili mwa Ezipeti. »
I Ki LinVB 12:29  Atii eke­ko yoko o Betel mpe esusu o Dan : yango ebendi ba-Israel o nzela ya masumu.
I Ki LinVB 12:30  Bato batamboli milongo o boso bwa ekeko tee Dan.
I Ki LinVB 12:31  Atongi bitumbelo mpe o mabota manso aponi banganga Nzambe, baye bazalaki ba libota lya Levi te.
I Ki LinVB 12:32  Yeroboam akomisi mokolo mwa zomi na mitano o sanza ya mwambe mokolo mwa eyenga lokola bakosepelaka eyenga o Yuda ; bongo abuti altare mpe abonzi mabonza na bikeko bya ngombe, biye asalaki ; o Betel mpe atii banganga Nzambe mpo babonza o bi­tumbelo atongaki.
I Ki LinVB 12:33  Abuti altare eye atongaki o Betel, o mokolo mwa zomi na mitano mwa sanza ya mwambe, sanza ye moko aponoki. Akomisi mokolo mona mo­kolo mwa eyenga mwa bato ba Israel, mpe abuti altare mpo ya kotumba mpaka ya malasi.
Chapter 13
I Ki LinVB 13:1  Ntango Yeroboam alingi kotumba mpaka ya malasi o alta­re, Yawe atindi moto moko wa Nza­mbe wa mokili mwa Yuda o Betel.
I Ki LinVB 13:2  Lokola Yawe atindaki, agangeli altare, alobi : « Altare, altare ! Yoka boniboni Yawe alobi : O libota lya Davidi mwana moko akobotama, nkombo ’te Yozia ; likolo lya yo akobonza ba­nganga Nzambe ba lokuta, baye bakotumbaka mpaka ya malasi awa ; likolo lya yo akotumba mpe minkuwa mya bato. »
I Ki LinVB 13:3  Bobele o ntango ena moto wa Nzambe alakisi elembo mpe alobi : « Tala elembo ’te Yawe moto alobaki : Altare ekopaswana, mpe mputulu ekopanzana. »
I Ki LinVB 13:4  Eyoki mokonzi maloba moto wa Nzambe agangelaki altare ya Betel, atandi loboko likolo lya altare, alobi : « Bokanga ye ! » Kasi loboko atandaki mpo ya kokanga moto wa Nzambe lobandi kokauka, akoki kozongisa lango lisusu te.
I Ki LinVB 13:5  Altare epaswani mpe mputulu epanzani, se lokola moto wa Nzambe alakisaki elembo o nkombo ya Yawe.
I Ki LinVB 13:6  Mokonzi alobi lisusu na moto wa Nzambe : « Nabondeli yo, kitisa motema mwa Yawe Nzambe wa yo, mpe sambela mpo ya ngai nakoka kozo-ngisa loboko la ngai. » Moto wa Nza­mbe akitisi motema mwa Yawe mpe loboko la mokonzi lozongeli ye lokola liboso.
I Ki LinVB 13:7  Mokonzi alobi na moto wa Nzambe : « Yaka o ndako ya ngai olia, nakopesa yo mpe libonza. »
I Ki LinVB 13:8  Kasi moto wa Nzambe alobi na moko­nzi : « Ata okopesa ngai ndambo ya bi­lei bya yo, nakokoto o ndako ya yo te, nakolia mpe nakomele eloko te o esika ena ;
I Ki LinVB 13:9  Yawe apesi ngai etinda eye : Olia mpe omele eloko te, ozo­nga mpe te o nzela eye oyaki. »
I Ki LinVB 13:10  Bongo akei, alandi nzela esusu mpo ya kozonga o mboka, nzela eye ayaki o Betel te.
I Ki LinVB 13:11  Ezalaki o Betel profeta moko mo­bange. Bana ba ye bayei koyebisa ye makambo manso moto wa Nzambe asalaki o Betel mokolo mona. Bayebisi tata wa bango maloba manso pro­feta alobaki na mokonzi.
I Ki LinVB 13:12  Tata atuni bango : « Ye alandi nzela nini ? » Bana ba ye balakisi ye nzela moto wa Nzambe wa Yuda alandi.
I Ki LinVB 13:13  Alobi na bana ba ye : « Babongisa mpunda. » Ba­bongiseli ye mpunda mpe abuteli yango.
I Ki LinVB 13:14  Alandi moto wa Nzambe, akuti ye afandi o nse ya nzete ya gbukulu, atuni ye : « Yo nde moto wa Nzambe, oyo auti o Yuda ? » Azongisi : « Ngai oyo ! »
I Ki LinVB 13:15  Profeta alobi na ye : « Yaka o ndako ya ngai kolia mwa moke. »
I Ki LinVB 13:16  Kasi ye ayanoli : « Nakoki ko­koto o ndako ya yo te, mpo nalia to namele,
I Ki LinVB 13:17  zambi Yawe apesaki ngai etinda eye : Olia mpe omele eloko te, ozonga mpe te o nzela eye okoke-nde. »
I Ki LinVB 13:18  Profeta alobi na ye : « Ngai mpe nazali profeta lokola yo ; anzelu moko alobaki na ngai o nkombo ya Yawe : Kotisa moto oyo o ndako ya yo, alia mampa mpe amele mai. » Nzo­kande akosi ye.
I Ki LinVB 13:19  Bongo moto wa Nzambe azongi mpe akoti o ndako ya ye ; alei mampa mpe ameli mai.
I Ki LinVB 13:20  Ezalaki bango kofanda o meza, Yawe alobi na profeta oyo azongisaki moto wa Nzambe o Betel ;
I Ki LinVB 13:21  profeta mobange agangeli moto wa Nza­mbe oyo autaki o Yuda : « Yoka maloba ma Yawe : Awa oboyaki kotosa etinda ya Yawe, mpe omemyaki mobeko mwa Yawe Nzambe wa yo te,
I Ki LinVB 13:22  awa ozo­ngaki epai ya ngai mpo olia mpe omele o esika Yawe apekisaki yo ’te olia mpe omele te, ebembe ya yo ekokundama o lilita lya bankoko ba yo te. »
I Ki LinVB 13:23  Esilisi ye kolia mpe komele, profeta abongisi mpunda ya moto wa Nza­mbe, oyo abengaki o ndako ya ye.
I Ki LinVB 13:24  Bongo ye akei. O nzela akutani na ntambwe, mpe ntambwe ebomi ye ; mpunda na ntambwe itelemi epai na epai ya ebembe.
I Ki LinVB 13:25  Bato baleki o nzela bamoni ebembe elali o nzela, na ntambwe etelemi pene na ebembe ; bakei koyebisa bato ba mboka esika profeta mobange afandi likambo lina.
I Ki LinVB 13:26  Ntango profeta oyo azongisaki mo­to wa Nzambe o ndako ya ye, ayo­ki likambo lina, alobi : « Ye nde moto wa Nzambe, oyo aboyaki kotosa etinda ya Yawe ! Tala Yawe akabaki ye na ntambwe, ntambwe eka­ngaki ye mpe ebomaki ye lokola Yawe alobaki. »
I Ki LinVB 13:27  Alobi na bana ba ye : « Bobongisela ngai mpunda ! » Babongiseli ye yango.
I Ki LinVB 13:28  Akei mpe akuti ebembe elali o nzela ; mpunda na ntambwe itelemi pene­pene na ebembe. Ntambwe eliaki ebe­mbe te, ebomaki mpunda mpe te.
I Ki LinVB 13:29  Profeta mobange akamati ebe­mbe ya moto wa Nzambe, atii yango o mpunda ya ye mpe azongi na yango o mboka. Asali lilaka mpo ya mowei mpe akundi ye.
I Ki LinVB 13:30  Akundi ye o lilita lya ye moko, mpe bayembi nzembo ya lilaka : « Mawa e, ndeko wa biso ! »
I Ki LinVB 13:31  Awa asilisi kokunda ye, alobi na bana ba ye : « Mokolo nakokufa, boku­nda ngai se o lilita liye tokundi moto wa Nzambe, botia minkuwa mya ngai pene na minkuwa mya ye.
I Ki LinVB 13:32  Bitumbu Yawe akanelaki altare ya Betel na bitumbelo binso bya banzambe basusu o mboka inso ya Samaria, bikosalema solo. »
I Ki LinVB 13:33  Yeroboam atiki mabe ma ye te. Akobi kopono banganga Nzambe o mabota manso. Andimi bato banso balingi kokoma banganga Nzambe mpo ’te bakumisa bikeko bya ye.
I Ki LinVB 13:34  Ezalela ena ekweisi bato ba Yeroboam o lisumu ; yango wana libota lya ye liumeli o mokili te, kasi likufi nye.
Chapter 14
I Ki LinVB 14:1  O mikolo mina Abia, mwana wa Yeroboam, akomi kobele.
I Ki LinVB 14:2  Yeroboam alobi na mwasi wa ye : « Nabondeli yo, teleme mpe lata bilamba bisusu mpo ’te bato bayeba te ’te ozali mwasi wa Yeroboam ; na nsima kende o Silo. Profeta moko afa­ndi kuna ; nkombo ya ye Akia ; ye moto ayebisaki ngai ’te nakozala moko­nzi wa bato ba ekolo eye.
I Ki LinVB 14:3  Kamata ma­mpa zomi, bisikiti na mbeki ya mafuta ma nzoi ; kende koluka ye. Ye akoyebisa yo makambo nini makokwela mwana. »
I Ki LinVB 14:4  Mwasi wa Yeroboam asali se bongo : atelemi, akei o Silo mpe akoti o ndako ya Akia. Kasi moto oyo azalaki komono lisusu malamu te, miso ma ye malembi zambi akomi mobange mpenza.
I Ki LinVB 14:5  Kasi Yawe ayebisaki ye : « Mwasi wa Yeroboam azali koya kotuna yo likambo nini liko­kwela mwana wa ye, oyo azali kobele. Oloba na ye lokola nakoyebisa yo. Ntango akoya, akokosa yo, akomiyebisa te. »
I Ki LinVB 14:6  Eyoki Akia makolo ma ye pene na ezibeli ya ndako, alobi na ye : « Mwasi wa Yeroboam, koto ! Mpo nini obo­yi komiyebisa ? Batindi ngai nayebisa yo liloba lya mpasi.
I Ki LinVB 14:7  Kende koyebisa Yeroboam : Yawe Nzambe wa Israel alobi boye : Naponoki yo o kati ya bato banso bo mokonzi wa bato ba ngai ba-Israel ;
I Ki LinVB 14:8  nabotoloki bokonzi o maboko ma bato ba libota lya Davidi mpe napesaki yo bwango. Kasi osalaki te lokola mosaleli wa ngai Davidi, oyo atosaki bitinda bya ngai mpe alandaki ngai na motema moko, asalaki bobele maye makosepelisa ngai.
I Ki LinVB 14:9  Oleki bakonzi banso na bobe, baye bazalaki liboso lya yo ; okendeki kosala bikeko bya banza­mbe basusu na bikeko bya bibende, mpe bongo otumolaki ngai mingi ; obwaki ngai moko nsima ya moko-ngo mwa yo.
I Ki LinVB 14:10  Yango wana mabe makokwela libota lya Yeroboam ; nakosilisa babali banso ba libota lya Yeroboam, baombo to bansomi o Israel ; nakokombo ndako ya Yeroboam lokola bakolongolaka bosoto o ndako ya bato.
I Ki LinVB 14:11  Bato ba libota lya Yeroboam, baye bakokufa o mboka, mbwa ikolia bango ; baye bakokufa o bila­nga, ndeke ya likolo ikolia bango, zambi Yawe alobaki bongo.
I Ki LinVB 14:12  Yo, teleme mpe zonga o ndako ya yo. O ngongamei okonyata mabelé ma mbo­ka, mwana akokufa.
I Ki LinVB 14:13  Bato ba­nso ba Israel bakosala lilaka mpo ya ye mpe bakokunda ye. Solo, bobele ye moko o kati ya libota lya Yeroboam akokundama o lilita, zambi bobele ye moto asalaki malamu o libota lya Yeroboam o miso ma Yawe Nzambe wa Israel.
I Ki LinVB 14:14  Yawe akolubola o Israel mokonzi oyo akosilisa libota lya Yeroboam mobimba. Mana manso makosalema se lelo ; bobele lelo te, kasi sikasikawa !
I Ki LinVB 14:15  Yawe akonyokolo ba-Israel ; ekozala na bango lokola nkekele ikoninganaka na mai. Yawe akolo­ngola ba-Israel o mokili moye molamu apesaki bankoko ba bango mpe akopanza bango o ngambo ya ebale Efrate, zambi basalaki bikeko bya banzambe basusu mpe batumolaki Yawe bongo.
I Ki LinVB 14:16  Yawe akoboya Israel mpo ya masumu ma Yeroboam, mpe maye atindaki ba-Israel basala mango. »
I Ki LinVB 14:17  Mwasi wa Yeroboam atelemi, akei mpe akomi o Tirsa, mpe awa ayi­ngeli o ndako, mwana akufi.
I Ki LinVB 14:18  Bakundi ye mpe bato banso ba Israel basali lilaka mpo ya ye, se lokola Yawe alobaki na mosaleli wa ye, profeta Akia.
I Ki LinVB 14:19  Makambo masusu ma Yeroboam, bitumba na misala mya ye, manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Israel.
I Ki LinVB 14:20  Yeroboam ayangeli ekolo mibu ntuku ibale na mibale, na nsima akei kokutana na bankoko ba ye. Mwana wa ye Nadab akitani ye.
I Ki LinVB 14:21  Roboam, mwana wa Salomo, ako­mi mokonzi wa Yuda. Akokisi mibu ntuku inei na moko ntango akomi mokonzi. Ayangeli ekolo mibu zomi na nsambo o Yeruzalem, mboka Yawe aponoki o kati ya mabota manso ma Israel mpo ya kotia nkombo ya ye kuna. Nkombo ya mama wa ye Naama, moto wa ekolo ya Amon.
I Ki LinVB 14:22  Ba-Yuda basali mabe o miso ma Yawe ; na masumu ma bango bayokisi Yawe zuwa, koleka bankoko ba bango.
I Ki LinVB 14:23  Bango mpe batongi bitumbelo mpo ya kokumisa ba­nzambe basusu, batelemisi makonzi mpe batii bikeko o ngomba inso mpe o nse ya nzete ibesu inso.
I Ki LinVB 14:24  Lisusu, o mokili mwa bango bandimi ’te basala mpo bosoni, ata o ndako esantu. Balandi makambo manso ma nsomo ma bikolo biye Yawe abenganaki o boso bwa bana ba Israel.
I Ki LinVB 14:25  O mobu mwa mitano mwa bokonzi bwa Roboam, Sesonk, moko­nzi wa Ezipeti, akei kobunda na Yeruzalem.
I Ki LinVB 14:26  Alongoli biloko binso bya motuya o Tempelo ya Yawe mpe o ndako ya mokonzi. Abotoli biloko binso nye na mpe nguba ya wolo Salomo asalaki.
I Ki LinVB 14:27  O esika ya yango mokonzi Roboam atiki nguba ya mbe­ngi, iye apesi o maboko ma basoda bakokengeleke ezibeli ya ndako ya mokonzi.
I Ki LinVB 14:28  Mbala inso mokonzi azalaki kokoto o Tempelo ya Yawe, baso­da bakamati nguba ina mpe na nsima bazongisi yango o ndako ya bake­ngeli.
I Ki LinVB 14:29  Makambo masusu ma Roboam na misala mya ye makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Yuda.
I Ki LinVB 14:30  Bitumba bizalaki ntango inso kati ya Roboam na Yeroboam.
I Ki LinVB 14:31  Roboam akei kokutana na bankoko ba ye mpe bakundi ye o Engumba ya Davidi. Mwana wa ye Abiam akitani ye.
Chapter 15
I Ki LinVB 15:1  O mobu mwa zomi na mwambe mwa bokonzi bwa Ye­roboam, mwana wa Nebat, Abiam akomi mokonzi wa Yuda.
I Ki LinVB 15:2  Ayangeli Yeruzalem mibu misato. Nkombo ya mama wa ye Maaka, mwana wa Absalom.
I Ki LinVB 15:3  Asali se masumu lokola tata wa ye liboso lya ye ; apesi motema mobimba na Yawe Nzambe wa ye te lokola nkoko wa ye Davidi asalaki.
I Ki LinVB 15:4  Nzokande mpo ya Davidi, Yawe Nza­mbe wa ye apesi ye mwinda o Yeruzalem, abateli mwana mobali mpo ya bolamu bwa Yeruzalem.
I Ki LinVB 15:5  Ya solo, Davidi asalaki malamu o miso ma Yawe mpe aboyaki etinda ya Yawe soki te, bomoi bwa ye mobimba, tika se likambo lya mo-Iti Uria.
I Ki LinVB 15:6  Bitumba bizalaki ntango inso kati ya Roboam na Yeroboam.
I Ki LinVB 15:7  Makambo masusu ma Abiam, na misala mya ye minso, manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Yuda. Bitu­mba bizalaki mpe kati ya Abiam na Yeroboam.
I Ki LinVB 15:8  Abiam akei kokutana na bankoko ba ye, bakundi ye o Engu­mba ya Davidi. Mwana wa ye Asa akitani ye.
I Ki LinVB 15:9  O mobu mwa ntuku ibale mwa bokonzi bwa Yeroboam, Asa akomi mokonzi wa Yuda.
I Ki LinVB 15:10  Ayangeli ekolo mibu ntuku inei na moko o Yeruzalem. Nkombo ya nkoko wa ye Maaka, mwana wa Absalom.
I Ki LinVB 15:11  Asa asali malamu o miso ma Yawe, se lokola Davidi, nkoko wa ye.
I Ki LinVB 15:12  Abengani o ekolo ya ye bato bakosalaka bosoni o bisika bisantu mpe abomi bikeko binso bya banzambe basusu, biye batata ba ye basalaki.
I Ki LinVB 15:13  Abotoli nkoko wa ye Maaka nkombo ya lokumu la Mama Mokonzi, mpo asalelaki Asera ekeko ya nsomo. Asa abuki ekeko eye ya nsomo mpe atumbi yango o lobwaku la Kedron.
I Ki LinVB 15:14  Ata bisika bya kokumisa banzambe basusu bikufaki te, Asa apesi motema mwa ye na Yawe bomoi bwa ye mobimba.
I Ki LinVB 15:15  Akotisi o Tempelo ya Yawe biloko binso tata wa ye abonzelaki Yawe na mpe mabonza ma ye moko : palata, wolo na biloko bisusu.
I Ki LinVB 15:16  Bitumba bizalaki ntango inso kati ya Asa na Basa, mokonzi wa Israel.
I Ki LinVB 15:17  Basa, mokonzi wa Israel, akei kobundisa Yuda mpe alendisi lopa­ngo zongazonga na Rama mpo ’te akangela Asa, mokonzi wa Yuda, nze­la.
I Ki LinVB 15:18  Asa akamati palata na wolo inso izalaki o ebombelo ya Tempelo ya Yawe na biloko binso bya motuya bya ndako ya mokonzi. Apesi yango o maboko ma basaleli ba ye ; atindi bango epai ya Ben-Adad, mwana wa Tibramon, nkoko wa Kezion, mokonzi wa Aram, oyo afandi o Damasko, na maloba maye :
I Ki LinVB 15:19  « Bondeko bozali kati ya biso na yo, ebongi toyokana lokola batata ba biso bayokanaki. Nakotindela yo palata na wolo. Yango wana oboma bondeko okataki na Basa, mokonzi wa Israel, mpo atika kobundisa ngai. »
I Ki LinVB 15:20  Ben-Adad andi­meli mokonzi Asa mpe atindi bakomanda ba basoda ba ye bakende kobunda na mboka ya Israel. Abotoli Iyon, Dan, Abel-Bet-Maaka, mokili mobimba mwa Kinerot mpe mokili mobimba mwa Neftali.
I Ki LinVB 15:21  Eyoki Bas­a nsango ena, atiki misala o Rama mpe azongi o Tirsa.
I Ki LinVB 15:22  Mokonzi Asa abengi bato banso ba Yuda, moto moko te akokaki kozanga. Balongoli mabanga na mabaya manso, maye Basa azalaki kotonga zongazonga na Rama. Mokonzi Asa alendisi na ma­ngo lopango o Geba o mokili mwa Benyamin mpe o Mispa.
I Ki LinVB 15:23  Makambo masusu ma Asa, mpiko ya ye mpe mboka atongaki, ma­nso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Yuda. Ntango akomi mobange, makolo ma ye mabandi kobele.
I Ki LinVB 15:24  Asa akei kokutana na bankoko ba ye ; bakundi ye o Engumba ya Davidi, nkoko wa ye. Mwana wa ye Yozafat akitani ye.
I Ki LinVB 15:25  Nadab, mwana wa Yeroboam, akomi mokonzi wa Israel o mobu mwa mibale mwa bokonzi bwa Asa o Yuda ; ayangeli ekolo Israel mibu mibale.
I Ki LinVB 15:26  Asali mabe o miso ma Yawe, alandi ezalela ya tata wa ye mpe asali masumu maye tata wa ye alakisaki bato ba Israel.
I Ki LinVB 15:27  Basa, mwana wa Akia, wa libota lya Izakar, atomboki na Nadab ; abomi ye ntango ye na bato banso ba Israel bazalaki kozinga Gibeton, mboka ya ba-Filisti.
I Ki LinVB 15:28  Basa abomi Nadab o mobu mwa misato mwa bokonzi bwa Asa o Yuda, mpe bongo akomi koyangela ekolo o esika ya ye.
I Ki LinVB 15:29  Ekomi ye mokonzi, abomi bato banso ba libota lya Yeroboam, ayokeli moto moko mawa te, asilisi koboma bango banso se lokola Yawe alobaki na monoko mwa mosaleli wa ye Akia wa Silo,
I Ki LinVB 15:30  zambi Yeroboam asalaki masumu mingi, abendaki ba-Israel o nzela ya masumu mpe ayokisaki Yawe Nzambe wa Israel nkanda enene.
I Ki LinVB 15:31  Makambo masusu ma Nadab, na misala mya ye minso, manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Israel.
I Ki LinVB 15:32  Bitumba bizalaki ntango inso kati ya Asa na Basa, mokonzi wa Israel.
I Ki LinVB 15:33  O mobu mwa misato mwa bokonzi bwa Asa o Yuda, Basa, mwana wa Akia, akomi mokonzi wa Israel o Tirsa ; aumeli na bokonzi mibu ntuku ibale na minei.
I Ki LinVB 15:34  Asali mabe o miso ma Yawe ; alandi ezalela ya Yeroboam, mpe asali masumu maye Yeroboam alakisaki bato ba Israel.
Chapter 16
I Ki LinVB 16:1  Yawe alobi na Yeku, mwana wa Kanani : « Kende koyebisa Basa :
I Ki LinVB 16:2  Nalongolaki yo o kati ya mputulu mpe nalubolaki yo moko­nzi wa bato ba ngai ba-Israel, kasi ola­ndaki ezalela ya Yeroboam, mpe oti­ndaki bato ba ngai o nzela ya masumu maye makoyokisaka ngai nkanda enene.
I Ki LinVB 16:3  Nakosilisa yo Basa na libota lya yo, nakosala na libota lya yo lokola nasalaki na libota lya Yeroboam, mwana wa Nebat.
I Ki LinVB 16:4  Moto wa libota lya Basa, oyo akokufa o mboka, mbw­a ikolia ye ; oyo akokufa o bila­nga, ndeke ya likolo ikolia ye. »
I Ki LinVB 16:5  Makambo masusu ma Basa, na misala mya ye minso, manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Israel.
I Ki LinVB 16:6  Basa akei kokutana na ba­nkoko ba ye mpe bakundi ye o Tirsa. Mwana wa ye Ela akitani ye.
I Ki LinVB 16:7  Yawe atindi naino profeta Yeku, mwana wa Kanani, akende kopalela Basa na libota lya ye, zambi asalaki mabe mingi o miso ma Yawe, ayokisi ye nkanda na misala mya ye lokola bato ba libota lya Yeroboam basalaki ; asilisi mpe libota lya Yeroboam mobimba.
I Ki LinVB 16:8  O mobu mwa ntuku ibale na motoba mwa bokonzi bwa Asa o Yuda, Ela, mwana wa Basa, akomi mokonzi wa Israel o Tirsa ; aumeli na bokonzi mibu mibale.
I Ki LinVB 16:9  Mosaleli wa ye Zimri, komanda wa ndambo ya basoda ba makalo, atomboki na ye. Ezalaki ye o Tirsa, ameli tee alangwi o ndako ya Arsa, moyangeli wa ndako ya mokonzi o Tirsa.
I Ki LinVB 16:10  Zimri akoti o ndako, abeti Ela mpe abomi ye ; ezalaki o mobu mwa ntuku ibale na nsambo mwa bokonzi bwa Asa o Yuda. Bo­ngo akitani Ela.
I Ki LinVB 16:11  Ekomi ye mokonzi mpe efandi ye o ngwende ya bokonzi, abomi bat­o banso ba libota lya Basa, atiki mobali moko te, abomi bandeko na baninga ba ye banso.
I Ki LinVB 16:12  Zimri asilisi libota lya Basa mobimba lokola Yawe alobaki mpo ya Basa na monoko mwa profeta Yeku ;
I Ki LinVB 16:13  esalemaki bo­ngo mpo ya masumu manso ma Basa, na maye ma mwana wa ye Ela, mpe zambi bakotisaki Israel o nzela ya masumu mpe bongo bayokisaki Yawe Nzambe wa Israel nkanda enene na bikeko bya bango bya mpamba.
I Ki LinVB 16:14  Makambo masusu ma Ela, na mpe misala mya ye minso, manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Israel.
I Ki LinVB 16:15  O mobu mwa ntuku ibale na nsa­mbo mwa bokonzi bwa Asa o Yuda, Zimri akomi mokonzi ; ayangeli ekolo mikolo nsambo o Tirsa. O ntango ena bato bapiki nganda liboso lya Gibeton, mboka ya ba-Filisti.
I Ki LinVB 16:16  Eyoki bato o nganda nsango eye : « Zimri ato­mboki, abomi mokonzi ! », ba-Israel banso o nganda baluboli komanda wa basoda Omri mokonzi wa Israel, se o mokolo monamei.
I Ki LinVB 16:17  Omri na bato banso ba Israel balongwi o Gibeton mpe bakei kozinga Tirsa.
I Ki LinVB 16:18  Emoni Zimri ’te babotoli mboka, akoti o linongi lya ndako ya mokonzi, atumbi ndako ya mokonzi likolo lya ye mpe akufi.
I Ki LinVB 16:19  Esalemi bongo mpo ya masumu ma ye, zambi asalaki mabe o miso ma Yawe, alandaki ezalela ya Yeroboam, oyo abendaki ba-Israel o nzela ya masumu.
I Ki LinVB 16:20  Makambo masusu ma Zimri, botomboki bwa ye, mana manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Israel.
I Ki LinVB 16:21  O mikolo mina ba-Israel baka-bwani : basusu balandi Tibni, mwana wa Ginat, mpo balubola ye mokonzi, basusu balandi Omri.
I Ki LinVB 16:22  Esika bazalaki kowelana bokonzi boye, bato ba Omri balongi bato ba Tibni, mwana wa Ginat. Tibni akufi mpe Omri ako­mi mokonzi.
I Ki LinVB 16:23  O mobu mwa ntuku isato na moko mwa bokonzi bwa Asa o Yuda, Omri akomi mokonzi wa Israel ; aumeli na bokonzi mibu zomi na mibale. Afandi o Tirsa mibu motoba ;
I Ki LinVB 16:24  na nsima asombi ngomba ya Samaria, afuti Semer talenta ya palata ibale. Atongi mboka o ngomba mpe atangi yango Samaria mpo ya nkombo ya Semer, nkolo wa ngomba.
I Ki LinVB 16:25  Omri asali mabe o miso ma Yawe, aleki naino bakonzi ba liboso na bobe.
I Ki LinVB 16:26  O makambo manso alandi ezalela ya Yeroboam, mwana wa Nebat, asali masumu maye Yeroboam alakisaki ba-Israel, ayokisi Yawe Nzambe wa Israel nkanda enene na bikeko bya ye bya mpamba.
I Ki LinVB 16:27  Makambo masusu ma Omri, na misala mya ye minso, manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Israel.
I Ki LinVB 16:28  Omri akei kokutana na bankoko ba ye mpe bakundi ye o Samaria. Mwana wa ye Akab akitani ye.
I Ki LinVB 16:29  O mobu mwa ntuku isato na mwambe mwa bokonzi bwa Asa o Yuda, Akab, mwana wa Omri, akomi mokonzi wa Israel. Ayangeli ekolo Israel mibu ntuku ibale na mibale o Samaria.
I Ki LinVB 16:30  Akab, mwana wa Omri, asali mabe o miso ma Yawe, aleki bakonzi ba liboso na bobe.
I Ki LinVB 16:31  Alandi bobe­le te nzela ya masumu ma Yeroboam, mwana wa Nebat, kasi abali lisusu Yezabel, mwana wa Itobaal, mokonzi wa ba-Sidoni. Akei kosalela nzambe Baal, akumbameli ekeko ya ye.
I Ki LinVB 16:32  Atongeli Baal etumbelo o ndako atongaki o Samaria.
I Ki LinVB 16:33  Akab atelemisi mpe likonzi lya ekeko ; akobi kosala mabe o miso ma Yawe Nzambe wa Israel ; aleki bakonzi ba Israel ba liboso na bobe.
I Ki LinVB 16:34  O eleko ya ye Kiyel wa Betel atongi lisusu lopango zongazonga na Yeriko ; ntango atii maba­nga manene ma nse, mwana wa ye wa yambo Abiram akufi, mpe o ntango atelemisi bizibeli bya mboka, mwana wa ye wa nsuka Segub akufi, se lokola Yawe alobaki kala na monoko mwa Yozue, mwana wa Nun.
Chapter 17
I Ki LinVB 17:1  Elia, moto wa Tesbe o mokili mwa Galaad, alobi na Akab : « Nakoloba o miso ma Yawe wa bomoi, Nzambe wa Israel oyo nakosalela : O mibu miye mbula ekonoko te, mamio makokita te soko ngai moko natindi yango te. »
I Ki LinVB 17:3  « Lo­ngwa awa mpe kende epai ya Esti, obombama kuna penepene na moluka Kerit o ngambo ya Yordane.
I Ki LinVB 17:4  Kuna okomele mai ma moluka mpe nakotinda yanganga iyela yo bilei. »
I Ki LinVB 17:5  Bongo Elia akei kofanda penepene na moluka Kerit o ngambo ya Yordane, lokola Yawe alobaki na ye.
I Ki LinVB 17:6  Ya­nganga iyeli ye mampa na ntongo mpe nyama na mpokwa, mpe o moluka azwi mai ma komele.
I Ki LinVB 17:7  Nsima ya mwa mikolo, mai makauki o moluka, zambi mbula enokoki lisusu te o mokili.
I Ki LinVB 17:9  « Teleme mpe kende o Sarepta, o mokili mwa Sidoni mpe fa­nda kuna. Natindi mwasi bozenge moko ’te apesa yo bilei. »
I Ki LinVB 17:10  Elia atelemi mpe akei o Sarepta. Ekomi ye penepene na mboka, amoni mwasi moko azalaki kolokoto nkoni. Elia alobi na ye : « Kamata elokó, kende kotokela ngai mwa mai namele. »
I Ki LinVB 17:11  Awa mwasi akei kotoka mai, Elia abengi ye lisusu, alobi : « Yela ngai mpe ndambo ya limpa. »
I Ki LinVB 17:12  Mwasi azongisi : « Solo, nakoloba o miso ma Yawe Nzambe wa yo : Nazali na mampa te ; nazali se na mwa fufu o sani mpe mwa mafuta o mbeki. Nazalaki kolokoto mwa nkoni mpo nalamba, biso na mwana tolia, mpe nsima tokufa. »
I Ki LinVB 17:13  Elia alobi na ye : « Obanga te, kende mpe sala lokola olobi. Nzokande lambela ngai liboso limpa lyoko mpe yela ngai lyango ; bino na mwana bokolia nsima.
I Ki LinVB 17:14  Yawe Nzambe wa Israel alobi : O sani fufu ekosila te, o mbeki mafuta makosila te tee Yawe akonokisa mbula o mokili. »
I Ki LinVB 17:15  Mama oyo akei mpe asali lokola Elia alobaki na ye ; banso balei, ye na mama na mwana wa ye.
I Ki LinVB 17:16  Banda mokolo mona fufu esili te, mafuta mpe te, se lokola Yawe ayebisaki na monoko mwa Elia.
I Ki LinVB 17:17  Nsima ya mwa mikolo mwana mobali wa mama oyo ayambaki Elia, akomi kobele. Mpasi ekangi ye makasi tee awei.
I Ki LinVB 17:18  Mama alobi na Elia : « Moto wa Nzambe, biso na yo lika­mbo nini ? Oyei o mboka ya ngai kokundola mabe manso nasalaki, oyei mpe koboma mwana wa ngai ? »
I Ki LinVB 17:19  Elia alobi na ye : « Pesa ngai mwana. » Akamati mwana o maboko ma ye, amemi ye o ndako ya likolo, alalisi ye o mbeto.
I Ki LinVB 17:20  Nsima abondeli Yawe, alobi : « Yawe Nzambe wa ngai, olingi kosala mwasi oyo mabe, mwasi bozenge ayambaki ngai o ndako ya ye, na bobomi mwana wa ye ? »
I Ki LinVB 17:21  Mbala isato amilalisi likolo lya mwana, abondeli Yawe, alobi : « Yawe Nza­mbe wa ngai, nabondeli yo, zongisela mwana oyo bomoi. »
I Ki LinVB 17:22  Yawe ayoki losambo la Elia : mwana azongi na bomoi, akomi kopema lisusu.
I Ki LinVB 17:23  Elia akamati ye, akiti na ye mpe apesi ye na mama wa ye, alobi : « Tala, mwana azali na bomoi. »
I Ki LinVB 17:24  Mama alobi : « Sikawa nayebi ’te ozali moto wa Nzambe mpe maloba ozali koloba o nkombo ya Yawe, mazali maloba ma solo. »
Chapter 18
I Ki LinVB 18:1  Elaka elai eleki, ekomi mobu mwa misato ’te mbula ezalaki konoko lisusu te, Yawe alobi na Elia : « Kende kotala Akab, nakonokisa mbu­la o mokili. »
I Ki LinVB 18:2  Bongo Elia akei epai ya Akab. O mikolo mina nzala enene engali o Samaria.
I Ki LinVB 18:3  Akab abengi Obadia, moyangeli wa ndako ya mokonzi. Obadia azalaki kobanga Yawe solo :
I Ki LinVB 18:4  ntango Yezabel azalaki koboma ba-profeta ba Yawe, abombaki ba­ngo monkama o mibenga mibale ; o mobenga moko moko bato ntuku ita­no, mpe asalisaki bango na mampa mpe na mai.
I Ki LinVB 18:5  Akab alobi na Obadia : « Yaka, tokatisa ekolo mobimba, tokende kotala maziba na miluka mi­nso ; mbele tokozwa matiti mpo tobikisa farasa na mpunda mpe toboma yango te. »
I Ki LinVB 18:6  Bakaboli ekolo mpe bakei ; Akab akei ya ye nzela, Obadia ya ye nzela.
I Ki LinVB 18:7  Bobele o nzela ena Obadia akutani na Elia, ayebi ye, amibwaki o mabelé mpe alobi : « Yo, mokonzi wa ngai Elia ? »
I Ki LinVB 18:8  Ye ayanoli : « Ngai oyo, kende koloba na nkolo wa yo : Namoni Elia. »
I Ki LinVB 18:9  Kasi Obadia alobi : « Nasali lisumu nini mpo okaba ngai mo­sa­leli wa yo o maboko ma Akab, bongo aboma ngai ?
I Ki LinVB 18:10  Lokola Yawe Nzambe wa yo azali na bomoi, nkolo wa ngai asili atindi bato o bikolo binso mpe o mikili minso mpo ya koluka yo. Esika bango balobi ’te bamoni yo te, alayisi bato ba ekolo to mokili mona ndai ’te bamoni yo te.
I Ki LinVB 18:11  Sikawa yo mpe otindi ngai : ‘Kende koloba na nkolo wa yo : Namoni Elia !’
I Ki LinVB 18:12  Kasi soko nakei, Elimo wa Yawe akokende na yo soki wapi. Soko nakoyebisa Akab, ye akozwa yo te mpe akoboma ngai. Nzokande ngai mosaleli wa yo nakobanga Yawe banda bomwana.
I Ki LinVB 18:13  E Mokonzi wa ngai, makambo nasalaki o eleko Yezabel abomaki baprofeta ba Yawe, bayebisaki yo te ? Nabombaki baprofeta ba Yawe monkama o mibenga mibale, o mobenga moko moko bato ntuku itano, mpe nazalaki kopesa ba­ngo mampa na mai.
I Ki LinVB 18:14  Mpe sikawa olobi na ngai : ‘Kende koloba na nkolo wa yo : Namoni Elia’, kasi ye akoboma ngai. »
I Ki LinVB 18:15  Elia alobi : « Lokola Yawe wa bokasi bonso oyo nakosalelaka, azali na bomoi, ya solo, lelo mpenza ngai nakokende epai ya Akab. »
I Ki LinVB 18:16  Obadia akei epai ya Akab mpe ayebisi ye makambo manso ; mpe Akab akei kokutana na Elia.
I Ki LinVB 18:17  Akab amoni Elia, alobi na ye : « Yo nde, mobebisi wa ekolo Israel ? »
I Ki LinVB 18:18  Elia azongisi : « Ngai nazali mobebisi wa Israel te, kasi yo moko na libota lya tata wa yo boboyi mibeko mya Yawe, mpe bondimi Baal.
I Ki LinVB 18:19  Sikawa ke­nde kosangisa ba-Israel banso o ngo­mba Karmel, elongo na baprofeta ba Baal nkama inei na ntuku itano, na mpe baprofeta ba Asera nkama inei, baye bakoliaka o meza ya Yezabel. »
I Ki LinVB 18:20  Akab abengi ba-Israel banso na baprofeta o ngomba Karmel.
I Ki LinVB 18:21  Elia akei epai ya bango, alobi : « Mikolo boni bokokumisa naino bato babale ? Soko Yawe azali Nzambe, bolanda ye ; soko ezali Baal, bolanda ye. » Bato bazwi liloba lya kozongisa te.
I Ki LinVB 18:22  Elia alobi lisusu : « Natikali ngai moko profeta wa Yawe. Baprofeta ba Baal bazali nkama inei na ntuku itano.
I Ki LinVB 18:23  Bo­pesa biso bana ba ngombe, ngo­mbe babali ibale. Bango bakamata yoko, baboma yango mpe batia nkoni, kasi bapelisa móto te. Ngai nakokamata ngombe esusu, nakopelisa mpe móto te.
I Ki LinVB 18:24  Bino bokobelela nza­mbe wa bino, ngai nakobondela nko­mbo ya Yawe. Nzambe oyo akondima losambo mpe akotinda móto, ye nde Nzambe wa solo. » Banso bandimi, balobi : « Malamu ! »
I Ki LinVB 18:25  Elia alobi na baprofeta ba Baal : « Bino bopono ngo­mbe eye bolingi mpe bobanda liboso, mpo bino boleki mingi. Bobelela nkombo ya nzambe wa bino, kasi bopelisa móto te. »
I Ki LinVB 18:26  Bakamati ngombe mpe balengeli binso. Babeleli nkombo ya Baal, uta ntongo tee midi, balobi : « Baal e, ndimela biso ! » Kasi bayoki lolaka te, eyano mpe te. Babini mpe bafukami liboso lya altare eye batongaki.
I Ki LinVB 18:27  Ekoki midi, Elia aseki bango, alobi : « Boganga makasi, azali nzambe. Mbele azali na mosala mingi, mbele akei mobembo to alali mpongi ; ntembe te, akolongwa o mpongi. »
I Ki LinVB 18:28  Balendisi koganga makasi, bamizokisi na mbeli mpe na mimpanga engebene na momeseno mwa bango, mpe makila matangi mingi kuna.
I Ki LinVB 18:29  Eleki midi, babandi losambo la mpokwa tee ngonga ya libonza lya mpokwa ebeti. Nzokande bayoki lolaka te, eyano te, ele­mbo yoko ya bondimi te.
I Ki LinVB 18:30  Sikawa Elia alobi na bato banso : « Boyaka penepene ! » Mpe bato banso babelemi na ye. Abongisi altare ya Yawe eye babebisaki liboso.
I Ki LinVB 18:31  Akamati mabanga zomi na mabale, engebene na motango mwa mabota zomi na mabale ma bana ba Yakob, oyo Yawe alobaki na ye ’te : Nkombo ya yo ekozala Israel.
I Ki LinVB 18:32  Atongeli Nko­mbo ya Yawe altare. Atimoli libulu zongazonga na altare likoki kokwa bingwongolo bibale bya mai.
I Ki LinVB 18:33  Abo­ngisi nkoni, asesi ngombe mpe atii yango o nkoni.
I Ki LinVB 18:34  Na nsima alobi : « Bo­tondisa mbeki inene inei na mai, mpe bosopa mango o libonza mpe o nkoni. » Bango basali se bongo. Elia alobi lisusu : « Bosala bongo mbala ya ibale », mpe basali bongo. Elia alobi lisusu : « Bosala bongo mbala ya isato », mpe basali se bongo.
I Ki LinVB 18:35  Mai masopani mpembeni ya altare mpe libulu zongazonga na altare lito­ndi na mai.
I Ki LinVB 18:36  Ekoki ngonga ya libonza, profeta Elia ayei mpe alobi : « Yawe Nzambe wa Abarama, wa Izaka mpe wa Israel, lelo bato bayeba ’te bobele yo ozali Nzambe o ekolo Israel. Bayeba ’te ngai nazali mosaleli wa yo mpe nasali maye manso se mpo ’te natosa monoko mwa yo.
I Ki LinVB 18:37  Ndimela ngai, Yawe, yanola ngai mpo ’te bato banso bayeba ’te yo Yawe ozali Nzambe wa solo ; okobongola bongo mitema mya bango. »
I Ki LinVB 18:38  Mpe ut’o likolo, móto mwa Yawe mokiti, mosilisi libonza na nkoni, mosilisi mpe mai mazalaki o libulu.
I Ki LinVB 18:39  Bato banso balengi na nsomo, ba-kwei elongi o nse, balobi : « Yawe azali Nzambe solo ! Yawe azali Nzambe solo ! »
I Ki LinVB 18:40  Elia alobi na bango : « Bokanga ba­profeta ba Baal, moto moko akima te ! » Bakangi bango. Elia akei na ba­ngo o lobwaku la Kison mpe akati bango nkingo.
I Ki LinVB 18:41  Elia alobi na Akab : « Buta ngo­mba, lia mpe mele ; mpo nazali koyoka lokito la mbula. »
I Ki LinVB 18:42  Akab akei kolia mpe komele, mpe Elia abuti ngomba Karmel tee o nsonge, akumbami o nse mpe akitisi elongi o mabolongo.
I Ki LinVB 18:43  Alobi na mosaleli wa ye : « Buta naino kuna mpe tala epai ya mbu. » Mosaleli akei, atali mpe alobi : « Namoni eloko te. » Mbala nsambo Elia alobi : « Zonga kuna. »
I Ki LinVB 18:44  Mbala ya nsambo mosaleli alobi : « Namoni mwa limpata like, bonene lokola loboko la moto, libimi epai ya mbu. » Elia alobi : « Kende koyebisa Akab ’te abongisa likalo mpe akende, mbula ekangisela ye nzela te. »
I Ki LinVB 18:45  Mwa moke nsima likolo liindi ; mompepe mobandi kopepe mpe mbu­la makasi ebeti. Akab abuti likalo, akei epai ya Yizreel.
I Ki LinVB 18:46  Yawe andimeli Elia ; Elia akangi mokaba o loketo, apoti mbangu liboso lya Akab tee akomi o Yizreel.
Chapter 19
I Ki LinVB 19:1  Akab ayebisi Yezabel manso Elia asalaki mpe boniboni abomaki baprofeta banso na mopa­nga.
I Ki LinVB 19:2  Yezabel atindi ntoma epai ya Elia na maloba maye : « Banzambe bapesa ngai etumbu mpe babakisa naino mpasi esusu, soko lobi na ngonga eyemei nabomi yo te lokola yo obomaki bango. »
I Ki LinVB 19:3  Elia abangi, akimi mpo ya kobikisa bomoi bwa ye. Akomi o Berseba ya mokili mwa Yuda, mpe atiki mosaleli wa ye kuna.
I Ki LinVB 19:4  Elia atamboli o eliki mokolo moko ; akei kopema o nse ya nzete ya we­nge. Akomi kolula liwa, alobi : « E Yawe, sikawa ekoki na ngai ! Kamata molimo mwa ngai, naleki batata ba ngai na bolamu te. »
I Ki LinVB 19:5  Akei kolala mpe mpongi ekangi ye. Kasi tala, anzelu atuti ye malembe, alobi : « Teleme mpe lia. »
I Ki LinVB 19:6  Atali mpe amoni penepene na litoko lya ye limpa batumbaki o libanga lya móto, na mpe ekutu ya mai. Alei, ameli mpe akei kolala lisusu.
I Ki LinVB 19:7  Kasi anzelu wa Yawe azongeli ye lisusu, atuti ye malembe, alobi : « Teleme mpe lia ; soko osali boye te, mbele nzela elai ekolembisa yo mingi. »
I Ki LinVB 19:8  Atelemi, alei mpe ameli ; biloko aliaki bilendisi ye ; mpe atamboli mikolo ntuku inei butu moi tee akomi o Oreb, ngomba ya Nzambe.
I Ki LinVB 19:9  O esika ena Elia akoti o mobenga, mpe atikali kuna na butu. Yawe alobi na ye : « Elia, ozali kosala nini awa ? »
I Ki LinVB 19:10  Elia azongisi : « Nakoyokaka mposa enene ya kosalela yo Yawe, Nzambe wa bokasi bonso, zambi ba-Israel baboyi Bondeko bwa yo, babuki altare ya yo mpe babomi baprofeta na mopanga. Natikali se ngai moko, mpe bazali koluka koboma ngai. »
I Ki LinVB 19:11  Yawe alobi na ye : « Bima kuna mpe teleme o ngomba o boso bwa ngai. » Yawe aleki kuna. Ekumbaki eyei, moningisi ngomba mpe mopasoli mabanga liboso lya Yawe, kasi Yawe azalaki o kati ya ekumbaki te. Nsima ya ekumbaki nse ebandi koningana, kasi Yawe azalaki o kati ya boningani te.
I Ki LinVB 19:12  Na nsima móto mobandi kopela, kasi Yawe azalaki o kati ya móto te. Nsima ya móto, lokito la mwa mo­mpepe loyokani.
I Ki LinVB 19:13  Awa Elia ayoki lango, azipi elo­ngi na elamba, abimi mpe atelemi o monoko mwa mobenga. Ayoki maloba maye : « Elia, ozali kosala nini awa ? »
I Ki LinVB 19:14  Elia azongisi : « Nakufi na mposa ya kosalela yo, Yawe, Nzambe wa bokasi bonso, zambi ba-Israel baboyi yo, babuki altare ya yo mpe babomi baprofeta ba yo na mopanga. Natikali se ngai moko mpe bazali koluka koboma ngai. »
I Ki LinVB 19:15  Yawe alobi na ye : « Kende o Damasko, landa nzela ya eliki. Soko oko­mi kuna, pakola Azael mafuta, azala mokonzi wa Siria (Aram).
I Ki LinVB 19:16  Na nsima pakola Yeku, mwana wa Nimsi, mafuta, azala mokonzi wa Israel. Pakola mpe Elizeo, mwana wa Safat, mafuta o mboka Abel-Mekola, azala profeta o esika ya yo.
I Ki LinVB 19:17  Moto akokufa na mopanga mwa Azael te, Yeu ako­boma ye, mpe soko moko akufi na mopanga mwa Yeku te, Elizeo akoboma ye.
I Ki LinVB 19:18  Kasi nakobatela nda­mbo ya bato ba Israel, bato nkoto nsambo, baye bafukamelaki Baal te, mpe bazingaki ekeko ya ye ekopi te. »
I Ki LinVB 19:19  Elia alongwi kuna, akuti Elizeo, mwana wa Safat, azalaki kokata bilanga na lisalisi lya ngombe ntuku ibale na inei, ikangemi ibale ibale liboso lya ye ; ye mpe azalaki kokamba ngombe ibale ya nsuka. Elia aleki pe­ne­pene na ye mpe abwakeli ye mo­nkoto o nzoto.
I Ki LinVB 19:20  Elizeo atiki ngo­mbe, ala­ndi Elia mpe alobi na ye : « Tika nake­nde liboso kopesa tata na mama mbo­te ; na nsima nalanda yo. » Elia alobi : « Kende, nabengi yo na makasi te. »
I Ki LinVB 19:21  Elizeo atiki ye, akamati ngo­mbe ibale mpe abomi yango ; alambi yango o bikangeli bya ngomba biye apasolaki, mpe akaboleli basali. Na nsima alandi Elia mpe akomi mosaleli wa ye.
Chapter 20
I Ki LinVB 20:1  Ben-Adad, mokonzi wa Aram, asangisi basoda ba ye banso. Elongo na bakonzi ntuku isato na babale, na makalo mpe na farasa akei, azingi mboka Samaria, mpe abandi kobunda etumba.
I Ki LinVB 20:2  Atindi bato o mbo­ka epai ya Akab, mokonzi wa Israel,
I Ki LinVB 20:3  bayebisa ye : « Yoka maloba ma Ben-Adad : Palata na wolo ya yo inso izali ya ngai, na mpe basi na bana babali ba yo baye baleki kitoko. »
I Ki LinVB 20:4  Mokonzi wa Israel azongisi : « Nandimi, e mokonzi wa ngai, ngai nakomi moto wa yo na biloko bya ngai binso. »
I Ki LinVB 20:5  Bantoma bayei mbala ya ibale, balobi : « Ben-Adad alobi boye : Nasengi yo : ‘Pesa ngai palata na wolo ya yo, na basi na bana babali ba yo.’
I Ki LinVB 20:6  Yango wana lobi o ngonga eyemei, nakoti­ndela yo basaleli ba ngai baya kotala ndako ya yo na ndako ya basaleli ba yo ; bakokamata biloko binso bilingi motema mwa bango, mpe bakomeme byango. »
I Ki LinVB 20:7  Mokonzi wa Israel abengi bakolo banso ba ekolo mpe alobi na bango : « Bozali komono ’te moto oyo alingi kosala biso mabe ! Asengeki ngai basi na bana ba ngai, palata na wolo ya ngai, nzokande naboyaki te. »
I Ki LinVB 20:8  Bakolo na bato banso balobi na ye : « Oyo­ka ye te, ondima yango soki te ! »
I Ki LinVB 20:9  Bo­ngo alobi na bantoma ba Ben-Adad : « Boloba na mokonzi nko­lo wa bino : Manso otindaki ngai mosaleli wa yo mbala ya liboso, nakosala mango ; kasi maye osengi ngai sikawa, nakoki kondima mango te. » Bantoma bakei koyebisa mokonzi.
I Ki LinVB 20:10  Ben-Adad ati­ndeli ye maloba maye : « Banzambe bapesa ngai etumbu mpe babakisa naino mpasi esusu, soko mputulu ya Samaria ekokoka mpo ’te natondisa loboko la moto moko moko oyo akolanda ngai. »
I Ki LinVB 20:11  Kasi mokonzi wa Israel azongisi : « Bolobela ye : Moto akangi mokaba mpo ya etumba amikumisa naino te lokola moto asili alongi, oyo alongoli mokaba mwa ye ! »
I Ki LinVB 20:12  Ben-Adad azalaki komele masanga elongo na bako­nzi o biema. Eyoki ye maloba mana, alobi na basaleli ba ye : « Tokende etumba ! Banso bakei kopikama o boso bwa engumba. »
I Ki LinVB 20:13  Profeta moko ayei koluka Akab, mokonzi wa Israel, alobi na ye : « Yawe alobi : Omoni bato ebele kuna ? Tala, lelo nakokaba bango o maboko ma yo, okoyeba ’te ngai nazali Yawe. »
I Ki LinVB 20:14  Akab atuni : « Banani bakokanga ba­ngo ? » Profeta azongisi : « Yawe alobi : Basoda ba bayangeli ba bikolo. » Akab atuni lisusu : « Nani akoba­nda etu­mba ? » Profeta azongisi : « Bobele yo ! »
I Ki LinVB 20:15  Akab akei kotala basoda ba bayangeli ba bikolo. Bazalaki bato nkama ibale na ntuku isato na babale. Na nsima atali basoda banso ba Israel, bakoki nkoto nsambo.
I Ki LinVB 20:16  Ekoki ngo-nga ya midi, babimi o mboka mpo ya kobunda, ntango Ben-Adad azalaki kolangwa masanga o biema elongo na bakonzi ntuku isato na babale, baye bayei kosalisa ye o etumba.
I Ki LinVB 20:17  Basoda ba bayangeli ba bikolo babimi o e­ngu­mba liboso ; bayebisi Ben-Adad ’te bato babimi o Samaria.
I Ki LinVB 20:18  Bongo ye alobi : « Ata bayei mpo ya koyokana, ata mpo ya kobunda etumba, boka-nga bango, boboma bango te ! »
I Ki LinVB 20:19  Basoda ba mpiko babimi liboso, basoda basusu balandi bango.
I Ki LinVB 20:20  Balongi ba­nguna. Ba-Aram bakimi mpe ba-Israel balandi bango. Ben-Adad, mokonzi wa Aram, abuteli farasa mpe akimi elongo na bato basusu ba farasa.
I Ki LinVB 20:21  Na nsima mokonzi wa Israel abimi o engu­mba ; abomi farasa na makalo. Ayokisi ba-Aram mpasi mingi.
I Ki LinVB 20:22  Profeta ayei epai ya mokonzi wa Israel ; alobi na ye : « Kende ! Lendisa motema mpe kanisa malamu nini osengeli kosala, zambi o mbula ekoya mokonzi wa Aram akoya kobu­ndisa yo lisusu. »
I Ki LinVB 20:23  Basaleli ba mokonzi wa Aram balobi na ye : « Nzambe wa bango azali Nzambe wa ngomba, yango wana ba­longi biso ; kasi soko tobundi na bango o esobe, ntembe te tokolonga.
I Ki LinVB 20:24  Yango wana sala boye : Longola ba­nkumu, mpe tia bayangeli o esika ya bango.
I Ki LinVB 20:25  Mpe yo, luka basoda ebele o esika ya baye bakufi, sala se bongo na farasa mpe na makalo. Na nsima tobunda na bango o esobe ; ntembe te, tokolonga bango. » Andimi lilako lya bango mpe asali se bongo.
I Ki LinVB 20:26  O mobu mwa nsima, Ben-Adad asangisi basoda ba-Aram banso mpe akei o Afek kobundisa ba-Israel.
I Ki LinVB 20:27  Ba-Israel mpe basangani, bakamati bilei mpe bakei kozwana na ba-Aram. Bazalaki kotalana : ba-Israel bazalaki se moke lokola bitonga bibale bya ntaba ; kasi basoda ba Aram baleki mi­ngi.
I Ki LinVB 20:28  Moto wa Nzambe akei epai ya mokonzi wa Israel, alobi na ye : « Yawe alobi boye : Awa ba-Aram balobi ’te Yawe azali Nzambe wa ngomba, azali Nzambe wa esobe te, nakokaba basoda ebele o maboko ma yo ; bo­ngo okoyeba ’te ngai nazali Yawe. »
I Ki LinVB 20:29  Bafandi mikolo nsambo, bazalaki se kotalana. O mokolo mwa nsambo etu­mba engali makasi, mpe ba-Israel babomi ba-Aram nkoto monkama, bobele basoda ba makolo, o mokolo se moko.
I Ki LinVB 20:30  Baye batikali bakimi o mboka Afek, kasi lopango la mboka lokwei mpe lonyati bato nkoto ntuku ibale na nsambo. Ben-Adad akimaki mpe abombamaki o ndako ya bato.
I Ki LinVB 20:31  Basaleli ba ye balobi na ye : « Toyoki ’te bakonzi ba Israel bakoyokelaka bato mawa. Tokolata ngoto o loketo mpe nka­mba o mitó ; mpe tokomipesa o maboko ma mokonzi wa Israel. Mbele akoboma biso te. »
I Ki LinVB 20:32  Balati ngoto o loketo mpe nsinga o mitó, bakei epai ya mokonzi wa Israel, balobi na ye : « Mosaleli wa yo Ben-Adad abondeli yo ’te oboma ye te. » Akab azongisi : « Soko azali naino na bomoi, azali ndeko wa ngai ! »
I Ki LinVB 20:33  Bato basepeli eyano ena, zambi elakisi ’te likambo likosuka malamu, bongo balobi na ye : « Solo, Ben-Adad azali ndeko wa yo. » Akab alobi : « Kende kokamata ye ! » Ben-Adad akei epai ya mokonzi mpe Akab abutisi ye o likalo lya ye moko.
I Ki LinVB 20:34  Ben-Adad alobi na ye : « Nakozo-ngisa mboka inso tata wa ngai abotoloki tata wa yo ; okoki kotonga ndako ya yo ya mombongo o Damasko, lokola tata wa ngai azalaki na yango o Samaria. » Akab ayanoli : « Mpe ngai na­kopesa yo bonsomi, soko ondimi kokata bondeko na ngai. » Akab akati na ye bondeko mpe atiki ye azonga o mboka.
I Ki LinVB 20:35  Profeta moko alobi na moninga wa ye, lokola Yawe atindaki ye : « Bete ngai ! » Kasi moninga aboyi kobete ye.
I Ki LinVB 20:36  Bongo profeta alobi na ye : « Awa otosi monoko mwa Yawe te, ntango okolongwa awa, ntambwe ekoboma yo. » Moto alongwi wana mpe nta­mbwe ekutani na ye mpe ebomi ye.
I Ki LinVB 20:37  Profeta akutani na moninga mosusu mpe alobi na ye : « Bete ngai ! » Moto oyo abeti ye mpe azokisi ye.
I Ki LinVB 20:38  Profeta akei kozila mokonzi o nzela. Aka­ngi elamba liboso lya miso mpo ’te moto moko ayeba ye te.
I Ki LinVB 20:39  O ntango mokonzi azalaki koleka o nzela, profeta agangeli ye : « Ngai mosaleli wa yo nabimaki mpo nabu-nda etumba. Soda moko autaki o etumba ayaki na moto moko mpe alobaki na ngai : Kengele moto oyo malamu ! Soko akimi nakoboma yo o esika ya ye, to okofuta talenta ya palata yoko.
I Ki LinVB 20:40  Kasi awa ngai mosaleli wa yo nazalaki kosala mwa mosala, akimi ! » Mokonzi wa Israel alobi na ye : « Yo moko osili okati likambo lya yo ! »
I Ki LinVB 20:41  Profeta alongoli noki elamba eye ezipi miso ma ye, mpe mokonzi wa Israel amoni ’te azalaki profeta.
I Ki LinVB 20:42  Pro­feta alobi na mokonzi : « Yawe alobi : Awa obikisi moto oyo nalingaki koboma, bakoboma yo o esika ya ye, bakoboma mpe bato ba yo. »
I Ki LinVB 20:43  Mokonzi wa Israel akei na mawa mpe na nkanda, azongi o Samaria.
Chapter 21
I Ki LinVB 21:1  Moto moko nkombo ’te Nabot wa Yizreel, azalaki na ela­nga ya vino penepene na ndako ya Akab, mokonzi wa Samaria.
I Ki LinVB 21:2  Akab alobi na Nabot : « Tikela ngai elanga ya yo ya vino, nasala wana elanga ya ndunda, zambi ezali penepene na ndako ya ngai. Nakopesa yo elanga ya vino eleki bolamu, to soko ondimi, nakofuta yo mosolo. »
I Ki LinVB 21:3  Kasi Nabot alobi : « Yawe asalisa ngai, elanga bankoko batikelaki ngai nakoki koteke yango te ! »
I Ki LinVB 21:4  Akab azongi o mboka na nkanda o motema ; asiliki mpo ya maloba Nabot wa Yizreel alobaki na ye : « Ela­nga ya bankoko ba ngai nakoki koteke yango te ! » Akei kolala o mbeto, akangi elongi mpe aboyi kolia.
I Ki LinVB 21:5  Mwasi wa ye Yezabel akoti o ndako, alobi na ye : « Mpo nini ozali na mawa mpe oboyi kolia ? »
I Ki LinVB 21:6  Akab azongisi : « Nasololaki na Nabot wa Yizreel, natunaki ye soko akoki kotekele ngai elanga ya vino, to soko andimi, napesa ye elanga ya vino esusu eleki bolamu. Azongisi : Nakotikela yo elanga ya ngai ya vino te ! »
I Ki LinVB 21:7  Yezabel mwasi wa ye, alobi : « Yo moto monene, ozali nde mokonzi wa Israel se mpamba ? Teleme mpe lia ; tika komitungisa, ngai moto nakopesa yo elanga ya vino ya Nabot wa Yizreel. »
I Ki LinVB 21:8  Yezabel akomi monkanda o nko­mbo ya Akab, atii mwango nkoma ya mokonzi mpe atindi monkanda na bakolo mpe na bankumu bafandi o mboka ya Nabot.
I Ki LinVB 21:9  O monkanda mona akomi boye : « Bobenga bato banso mpo balala nzala. Botia Nabot o molongo mwa liboso.
I Ki LinVB 21:10  Na nsima bato ba mpamba babale bafanda liboso lya ye mpo bafunda ye, baloba : Obeteli Nzambe na mpe mokonzi wa biso mobondo ! Babimisa Nabot mpe babwakela ye mabanga, akufa ! »
I Ki LinVB 21:11  Bakolo na bankumu ba mboka ya Nabot basali lokola Yezabel atindaki, mpe lokola ekomani o monkanda ati­ndelaki bango.
I Ki LinVB 21:12  Babengi bato mpo balala nzala mpe bafandisi Nabot o molongo mwa liboso.
I Ki LinVB 21:13  Bato ba mpa­mba babale babimi, batelemi liboso lya ye, bafundi ye o miso ma bato ba­nso, balobi : « Nabot abeteli Nzambe na mpe mokonzi wa biso mobondo ! » Babimisi ye o mboka, babwakeli ye mabanga mpe akufi.
I Ki LinVB 21:14  Batindeli Yezabel maloba, balobi : « Tobwakeli Na­bot mabanga, akufi. »
I Ki LinVB 21:15  Awa Yezabel ayoki ’te babomi Nabot na mabanga, alobi na Akab : « Teleme mpe kamata elanga ya vino ya Nabot wa Yizreel, eye aboyaki kotekele yo. Nabot azali lisusu te, akufi. »
I Ki LinVB 21:16  Eyoki Akab ’te Nabot akufi, atelemi mpe akei o elanga ya Nabot wa Yizreel mpo ’te azwa yango.
I Ki LinVB 21:18  « Teleme mpe kende epai ya Akab, mokonzi wa Israel, azali o mboka Samaria. Azali o elanga ya vino ya Nabot mpo akamata yango.
I Ki LinVB 21:19  Okoloba na ye : Yawe alobi boye : Obomi moto mpe oyibi elanga ya ye. Yoka liloba lya Yawe : O esikamei mbwa ileti makila ma Nabot, ikolete mpe makila ma yo. »
I Ki LinVB 21:20  Akab azongiseli Elia : « Monguna akutani na ngai lisusu ? » Elia alobi : « Iyo, mpamba te, osali mabe o miso ma Yawe.
I Ki LinVB 21:21  Nakotindela yo malozi manene, nakosilisa libota lya yo, nakoboma babali banso o libota lya yo, ná bansomi ná baombo o Israel.
I Ki LinVB 21:22  Nakosala na libota lya yo lokola nasalaki na libota lya Yeroboam, mwana wa Nebat, mpe libota lya Basa, mwana wa Akia, mpo oyokisi ngai nkanda enene mpe okotisi lisumu linene o Isra­el. »
I Ki LinVB 21:23  Mpo ya Yezabel, Yawe alobi : « Mbwa ikolia Yezabel o elanga ya vino ya Yizreel.
I Ki LinVB 21:24  Moto wa libota lya Akab akokufa o mboka, mbwa ikolia ye, mpe oyo akokufa o elanga, ndeke ikolia ye.
I Ki LinVB 21:25  Moto moko te asali mabe mpenza lokola Akab asalaki o miso ma Yawe, zambi mwasi wa ye Yezabel alakisaki ye nzela ebe.
I Ki LinVB 21:26  Asalaki mambi ma nsomo, andimaki kokumisa bikeko lokola ba-Amor, baye Yawe abenganaki o miso ma bana ba Israel. »
I Ki LinVB 21:27  Eyoki Akab maloba mana, apa­so­li bilamba bya ye, alati bobele ngoto, atiki kolia, alali na ngoto mpe atambo­li se malembe mpo ya mawa.
I Ki LinVB 21:29  « Omoni boniboni Akab amikitisi o miso ma ngai ? Awa amikitisi bongo o miso ma ngai nakotindela ye malozi maye te ntango azali na bomoi, kasi manso makosalema ntango mwana wa ye akokoma mokonzi. »
Chapter 22
I Ki LinVB 22:1  Mibu misato bitumba bizalaki lisusu te kati ya Aram na Israel.
I Ki LinVB 22:2  O mobu mwa misato, Yozafat, mokonzi wa Yuda, akei kotala mokonzi wa Israel.
I Ki LinVB 22:3  Mokonzi wa Israel alobi na bakomanda ba basoda : « Boyebi malamu ’te Ramot o Galaad ezali mboka ya biso, mpe tozali kobanga mpo tobotolo yango o maboko ma mokonzi wa Aram. »
I Ki LinVB 22:4  Abo­nde­li Yozafat, alobi : « Olingi kokende na biso elongo mpo tobunda na Ramot o Galaad ? » Yozafat ayanoli mokonzi wa Israel : « Ngai nakosala se lokola yo ; bato ba ngai bakosala lokola bato ba yo ; farasa ya ngai lokola farasa ya yo. »
I Ki LinVB 22:5  Yozafat alobi naino na mokonzi wa Israel : « Nabondeli yo, tuna liboso Yawe soko akoloba nini. »
I Ki LinVB 22:6  Moko­nzi wa Israel asangisi baprofeta soko nkama inei mpe atuni bango : « Nakende kobunda na Ramot o Galaad, to te ? » Bazongisi : « Kende, Yawe ako­kaba mboka o maboko ma moko­nzi. »
I Ki LinVB 22:7  Kasi Yozafat alobi : « Profeta mosusu wa Yawe azali awa te mpo totuna ye ? »
I Ki LinVB 22:8  Mokonzi wa Israel azo­ngiseli Yozafat : « Moto mosusu azali, oyo akoki kotuna Yawe, kasi ngai nalingi ye te, zambi makambo ma ngai ye akosakolaka makozalaka malamu te, ntango inso se mabe ; nkombo ya ye Mikea, mwana wa Yimla. » Yozafat alobi : « Mokonzi, oloba bongo te ! »
I Ki LinVB 22:9  Mokonzi wa Israel abengi nkumu moko, alobi na ye : « Benga noki Mikea, mwana wa Yimla ! »
I Ki LinVB 22:10  Mokonzi wa Israel na Yozafat balati bilamba bya lokumu mpe bakei kofanda, moto na moto o kiti ya ye, o libanda lya mboka Samaria, penepene na ezibeli ya mboka. Baprofeta banso bazalaki kolendisana mpo basakola makambo o miso ma bango.
I Ki LinVB 22:11  Sedekia, mwana wa Kenana, asalaki maseke ma bibende, alobi : « Yawe alobi boye : Na maseke maye okosi­lisa ba-Aram tee banso bakokufa. »
I Ki LinVB 22:12  Baprofeta banso basalaki se bongo, balobi : « Kende o Ramot ya Galaad : okolonga mpe Yawe akokaba mboka o maboko ma mokonzi. »
I Ki LinVB 22:13  Ntoma oyo akendeki koluka Mikea, alobi na ye : « Baprofeta banso basakoli se monoko moko ’te mokonzi akolonga. Yo mpe meka koloba lokola bango mpe sakola se ma­mbi malamu ! »
I Ki LinVB 22:14  Kasi Mikea azongisi : « Lokola Yawe azali na bomoi, maloba Yawe akoloba, ngai nakoloba se mango. »
I Ki LinVB 22:15  Akomi epai ya mokonzi, oyo atuni ye : « Mikea, tokoki koke­nde o Ramot ya Galaad mpo tobu­nda etumba, to te ? » Azongisi : « Kende, okolonga. Yawe akokaba mboka o maboko ma mokonzi. »
I Ki LinVB 22:16  Kasi mokonzi alobi na ye : « Mbala boni nalayisi yo ndai ’te oloba na ngai se ma-kambo ma solo o nkombo ya Yawe ? »
I Ki LinVB 22:17  Bongo Mikea asakoli boye : « Namoni ba-Israel bapanzani o ngomba, lokola etonga ya mpata izangi mokengeli. Mpe Yawe alobi : Bazali lisusu na mokonzi te, moto na moto azo­nga na boboto o ndako ya ye ! »
I Ki LinVB 22:18  Mokonzi wa Israel alobi na Yozafat : « Omoni, nayebisaki yo te ’te makambo ma ngai moto oyo akosakolaka makozalaka malamu te, se ma­be ! »
I Ki LinVB 22:19  Mikea alobi lisusu : « Yoka liloba lya Yawe. Namonoki Yawe afa­ndi o ngwende ya ye. Banzelu ba­nso ba likolo batelemi penepene na ye, epai ya mobali mpe epai ya mwasi.
I Ki LinVB 22:20  Yawe atuni : Nani akokosa Akab mpo ake­nde kobunda na Ramot o Galaad, mpo akufa kuna ? Bazongiseli ye biyano ndenge na ndenge.
I Ki LinVB 22:21  Na nsima anzelu moko mpe atelemi o miso ma Yawe, alobi : Ngai moto nakokosa ye. Yawe atuni ye : Okosala boniboni ?
I Ki LinVB 22:22  Azongisi : Nakozala a­nze­lu wa lokuta o monoko mwa baprofeta ba ye banso. Yawe alobi : Malamu, kende kokosa ye, napesi yo nzela. Kende mpe sala se bongo.
I Ki LinVB 22:23  Ya­we atii anzelu wa lokuta o monoko mwa baprofeta banso, zambi akani kosukisa yo. »
I Ki LinVB 22:24  Sedekia, mwana wa Kenana, abelemi. Abeti Mikea o litama, alobi : « Anze­lu wa Yawe alongwi epai ya ngai o nzela nini mpo aya koloba na yo ? »
I Ki LinVB 22:25  Mikea azongisi : « Okomono yango mokolo okokima bipai binso mpo oluka ndako ya kobombama. »
I Ki LinVB 22:26  Mokonzi wa Israel atindi : « Kanga Mikea mpe kaba ye o maboko ma Amon, moyangeli wa mboka, mpe o maboko ma Yoas, mwana wa mokonzi.
I Ki LinVB 22:27  Yebisa bango : Mokonzi alobi : Bokotisa moto oyo o boloko mpe bopesa ye se mwa mampa na mai tee mokolo nakozonga awa nzoto kolongonu. »
I Ki LinVB 22:28  Mikea alobi : « Soko obiki mpe ozongi nzoto kolongonu, okoyeba ’te Yawe alobaki na monoko mwa ngai te. Bino banso boyoka malamu ! »
I Ki LinVB 22:29  Mokonzi wa Israel na Yozafat, mokonzi wa Yuda, bakei o Ramot ya Galaad.
I Ki LinVB 22:30  Mokonzi wa Israel alobi na Yozafat : « Ngai nakolata bilamba bya soda mpamba mpo nakoto o etumba ; kasi yo, lata bilamba bya yo bya mokonzi. » Mokonzi wa Israel alati bilamba bya soda mpamba mpe akei etumba.
I Ki LinVB 22:31  Mokonzi wa Aram ayebisaki bakomanda ntuku isato na babale, baye bazalaki kotambwisa makalo : « Bobunda na bato banene to bake te, bobunda se na mokonzi wa Israel. »
I Ki LinVB 22:32  Awa bakomanda ba basoda ba makalo bamoni Yozafat, balobi : « Ntembe te, ye azali mokonzi wa Israel ; bongo bakei kobunda etumba esika ye azali. » Kasi Yozafat agangi migango mya etumba.
I Ki LinVB 22:33  Bakomanda ba bato ba makalo bamoni ’te ye azalaki mokonzi wa Israel te, batiki kobunda na ye.
I Ki LinVB 22:34  Ntango moto moko akamati litimbo lya ye mpo abete ata nani, likula likoteli mokonzi wa Israel o kati ya motako mokangisi elamba ya bibende eye ekozipaka ntolo. Mokonzi alobi na motambwisi likalo : « Zonga nsima mpe longwa na ngai awa o esika ya etumba, mpo nazoki. »
I Ki LinVB 22:35  Kasi o ntango ena etumba engali makasi, basengeli kotika mokonzi o likalo o miso ma ba-Aram. Bongo na mpokwa akufi ; makila ma mpota ya ye matangi o eteni ya nse ya likalo.
I Ki LinVB 22:36  Ntango moi mobandi kokita, baga­ngi o nganda : « Banso bazonga o mbo­ka, banso bazonga o mokili mwa bango. »
I Ki LinVB 22:37  Mokonzi akufi, bongo bazongi o Samaria mpe bakundi ye kuna.
I Ki LinVB 22:38  Basukoli likalo na mai penepene na etima ya Samaria ; mbwa iyei kolete makila ma ye, mpe basi bandumba bapakoli mango o nzoto se lokola Yawe alobaki.
I Ki LinVB 22:39  Makambo masusu ma Akab, misala minso asalaki, ndako atongaki mpe akembisaki na mpembe ya nzoku, mboka inso atongaki, manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Israel.
I Ki LinVB 22:40  Akab akei kokutana na bankoko ba ye. Mwana wa ye Okozia akitani ye.
I Ki LinVB 22:41  Yozafat, mwana wa Asa, akomi mokonzi wa Yuda o mobu mwa minei mwa bokonzi bwa Akab o Israel.
I Ki LinVB 22:42  Yozafat akokisi mibu ntuku isato na mitano ntango akomi mokonzi ; ayangeli ekolo mibu ntuku ibale na mitano o Yeruzalem. Nkombo ya ma­ma wa ye Azuba, mwana wa Silki.
I Ki LinVB 22:43  Alandi se ezalela ya tata wa ye Asa, atiki nzela ya ye te mpe asali se malamu o miso ma Yawe.
I Ki LinVB 22:44  Kasi bisika bya kokumisa banzambe basusu bikufi te, bato bakobi kobonza mabo­nza mpe mpaka ya malasi o ndako ya banzambe ba bango.
I Ki LinVB 22:46  Makambo masusu ma Yozafat, misala minso asalaki na bitumba bi­nso abundaki, manso makomami o buku ya Bikela bya bakonzi ba Yuda.
I Ki LinVB 22:47  Abengani o mokili bato bazalaki kosala bosoni o tempelo ya banza­mbe ba bango, baye batikalaki naino ut’o eleko ya tata wa ye Asa.
I Ki LinVB 22:49  Yozafat atongaki masuwa zomi ma Tarsis mpo ya kozwa wolo o Ofir, kasi akendeki te, mpo masuwa ma ye mabukanaki o Esion-Geber.
I Ki LinVB 22:50  Bongo Okozia, mwana wa Akab, alobi na Yozafat : « Bato ba yo bakoki kokende o masuwa elongo na bato ba ngai » ; ka­si Yozafat andimi te.
I Ki LinVB 22:51  Yozafat akei kokutana na bankoko ba ye mpe baku­ndi ye o Engumba ya Davidi, nkoko wa ye. Mwana wa ye Yoram akitani ye.
I Ki LinVB 22:52  Okozia, mwana wa Akab, akomi mokonzi wa Israel o Samaria, o mobu mwa zomi na nsambo mwa bokonzi bwa Yozafat o Yuda. Ayangeli ekolo Israel mibu mibale.
I Ki LinVB 22:53  Asali mabe o miso ma Yawe mpe alandi nzela ya tata na mama wa ye, alandi mpe ezalela ya Yeroboam, mwana wa Nebat, oyo abendaki Israel o nzela ya masumu.
I Ki LinVB 22:54  Azalaki kosambela Baal mpe kokumbamela ye ; bongo ayokisi Yawe Nzambe wa Israel nkanda, se lokola tata wa ye asalaki.