Chapter 1
Mark | LinVB | 1:2 | Lokola ekomami o búku ya proféta Izáya : « Tálá nakotínda ntóma wa ngáí libosó lya yǒ ábongisela yǒ nzelá ; | |
Mark | LinVB | 1:4 | Yoáne Mobátisi azalákí o elíkí, asakólí batísimo ya boyóki mawa mpô ya kozwa bolímbisi masúmu. | |
Mark | LinVB | 1:5 | Bato bánso ba Yudéa mpé ba Yerúzalem bakeí epái ya yě, basakólí masúmu ma bangó mpé bakúlí batísimo na mabóko ma yě o mái ma Yordáne. | |
Mark | LinVB | 1:6 | Yoáne azalákí koláta moláto mwa nsúki ya kaméla mpé kokanga nkámba ya lomposo la nyama o lokéto ; azalákí kolía mitó mya bítekuteku mpé mafúta ma nzói ya zámba. | |
Mark | LinVB | 1:7 | Asakólí boye : « Moto mǒkó alekí ngáí, akoyâ nsima ya ngáí ; nabongí kokúmbama té mpô ya kokangola nsinga ya sapáto ya yě. | |
Mark | LinVB | 1:11 | loláká lolobí út’o likoló : « Ozalí Mwána wa ngáí wa bolingo, nakosepelaka yǒ míngi. » | |
Mark | LinVB | 1:13 | Aúmélí o elíkí mikolo ntúkú ínei ; Sátana ayéí kosénginya yě. Azalákí o káti ya nyama ya zámba, mpé bǎnzelú bazalákí kosálela yě. | |
Mark | LinVB | 1:14 | Nsima ya bokangemi bwa Yoáne o bolóko, Yézu akeí o Galiléa kosangela Nsango Elámu ya Nzámbe, alobí : | |
Mark | LinVB | 1:15 | « Elaká ekokí : Bokonzi bwa Nzámbe bokómí penepene ; bóbóngola mitéma mpé bóyamba Nsango Elámu. » | |
Mark | LinVB | 1:16 | Yézu alekí mpembéni ya etíma ya Galiléa, amóní Simóni na Andréa ndeko wa yě, bazalákí kobwáka monyámá o mái, bazalákí babomi mbísi. | |
Mark | LinVB | 1:19 | Yézu atámbólí mwâ moké, amóní Yakóbo, mwána wa Zebedéo, na Yoáne ndeko wa yě ; bazalákí kobongisa minyámá o bwáto bwa bangó. | |
Mark | LinVB | 1:22 | Bato bakámwí míngi na matéya ma yě, zambí azalákí kotéya lokóla batéyi ba Mobéko té, kasi lokóla moto azali na likoki lya kotéya. | |
Mark | LinVB | 1:23 | Moto mǒkó azalákí wâná o sinagóga ya bangó, akangémí na elímo mbindo, abandí kogánga : | |
Mark | LinVB | 1:24 | « Bísó na yǒ likambo níni, Yézu wa Nazaréte ? Oyéí ndé kosúkisa bísó ? Nayébí yǒ : ozalí mosántu wa Nzámbe. » | |
Mark | LinVB | 1:27 | Bato bánso babángí, batúnání : « Yangó ndé likambo níni ? Akotéyaka matéya ma sika lokóla moto azali na likoki lya kotéya ! Akotíndaka bilímo mbindo bitíndá bikotósaka yě ! » | |
Mark | LinVB | 1:29 | Ebimí Yézu o sinagóga, akeí o ndáko ya Simóni na Andréa, elongó na Yakóbo mpé na Yoáne. | |
Mark | LinVB | 1:31 | Yézu abelémí na yě, asímbí yě na lobóko mpé atélémísí yě. Féfele etíkí yě, abandí kosálela bangó. | |
Mark | LinVB | 1:32 | Ekómí mpókwa, mói mosílí kokita, bayélí yě bato bánso bazalákí na bokono ná baye bakangémí na bilímo bibé. | |
Mark | LinVB | 1:34 | Abíkísí bato míngi bazalákí na mpási ndéngé na ndéngé, abengání bilímo míngi ; kasi apekísí bazábolo koloba, zambí bangó bayébákí yě. | |
Mark | LinVB | 1:35 | Na ntóngóntóngó, mói mobimí naíno té, Yézu atélémí, abimí mpé akeí kosámbela o esíká ya kímíá. | |
Mark | LinVB | 1:38 | Azóngísí : « Tókende epái esúsu, o mbóka izalí penepene, nákende kotéya mpé kúná, zambí nayéí na ntína yangó. » | |
Mark | LinVB | 1:39 | Akátísí Galiléa mobimba mpô ya kotéya bato o sinagóga ya bangó mpé kobengana bazábolo. | |
Mark | LinVB | 1:40 | Moto wa maba ayéí epái ya Yézu, afukámélí yě, abóndélí yě : « Sókó olingí, okokí kopétola ngáí. » | |
Mark | LinVB | 1:44 | alobí na yě : « Kébá, óyébisa yangó atâ na moto mǒkó té ; kasi kendé komílakisa na nganga Nzámbe, óbonza libonza Móze atíndá, ólakisa bato bôngó ’te okómí péto. » | |
Chapter 2
Mark | LinVB | 2:2 | bayéí ebelé téé ndáko etóndí mpenzá, atâ libosó lya ndáko bato batóndí. Yézu atéyí bangó Liloba lya Nzámbe. | |
Mark | LinVB | 2:4 | Kasi nzelá ya kokóma penepene na Yézu ezalákí té, zambí bato balekí míngi. Yangó wâná babutí motóndo mwa ndáko likoló lya esíká Yézu azalákí ; batúbólí lilusú mpé bakitísí kitikwálá ná moto akúfá makolo. | |
Mark | LinVB | 2:5 | Emóní Yézu boyambi bwa bangó, alobí na moto akúfá makolo : « Mwána wa ngáí, masúmu ma yǒ malímbámí. » | |
Mark | LinVB | 2:7 | « Bóníbóní moto óyo akokí koloba bôngó ? Atúkí Nzámbe ! Náni akokí kolímbisa masúmu ? Bobélé Nzámbe té ? » | |
Mark | LinVB | 2:9 | Níni elekí mpási : koloba na moto akúfá makolo ‘Masúmu ma yǒ malímbámí’ tǒ koloba na yě ‘Télémé, kamátá kitikwálá ya yǒ mpé támbólá’ ? | |
Mark | LinVB | 2:10 | Bôngó, mpô ’te bóyéba ’te Mwána wa Moto azalí na likokí lya kolímbisa masúmu áwa o nsé, » | |
Mark | LinVB | 2:11 | alobí na moto akúfá makolo : « Nalobí na yǒ : Télémé, kamátá kitikwálá ya yǒ mpé kendé o ndáko. » | |
Mark | LinVB | 2:12 | Moto ôná atélémí, akamátí kitikwálá ya yě mpé abimí o míso ma bato bánso. Bánso bakámwí mpé bakúmísí Nzámbe, balobí : « Mokolo mǒ fkó té tomóní likambo lya ndéngé eye. » | |
Mark | LinVB | 2:13 | Yézu akeí lisúsu epái ya libóngo lya etíma ; bato ebelé bayéí epái ya yě, mpé atéyí bangó. | |
Mark | LinVB | 2:14 | Na nsima o nzelá amóní Lévi, mwána wa Alféo, afándí o biló ya mpáko, alobí na yě ; « Landá ngáí. » Lévi atélémí mpé alandí yě. | |
Mark | LinVB | 2:15 | Efándí Yézu o méza o ndáko ya Lévi, bafútisi mpáko na basúmuki míngi bayéí kolía elongó na yě mpé na bayékoli ba yě ; bato baíké bazalákí kolanda Yézu. | |
Mark | LinVB | 2:16 | Emóní batéyi ba Mobéko, baye ba lingómbá lya ba-Farizéo, ’te Yézu azalákí kolía esíká yǒ kó na bafútisi mpáko mpé na basúmuki, balobí na bayékoli ba yě : « Mpô níni azalí kolía na bafútisi mpáko mpé na basúmuki esíká yǒ kó ? » | |
Mark | LinVB | 2:17 | Yézu ayókí yangó, alobí na bangó : « Bato bazalí nzóto kólóngónú basengélí na mónganga té, bobélé bato ba bokono. Nayéí kobênga bato basémba té, kasi basúmuki. » | |
Mark | LinVB | 2:18 | Mokolo mǒkó, ezalákí mokolo bayékoli ba Yoáne na ba-Farizéo bazalákí kolála nzala, bayéí kotúna Yézu : « Bayékoli ba Yoáne na ba-Farizéo bakolálaka nzala. Mpô níni bayékoli ba yǒ bakolálaka nzala té ? » | |
Mark | LinVB | 2:19 | Yézu ayanólí bangó : « Bato bayéí o limpáti lya libála bakolálaka ndé nzala mokolo môná ? Ntángo molóngani azalí na bangó bakokí kolála nzala té. | |
Mark | LinVB | 2:21 | Moto mǒkó té akobamba elambá ya kala na eténi ya elambá ya sika. Mpámba té, sókó asálí bôngó, eténi ya sika ekobénda elambá ya kala, ekopasola yangó mpé ekosála lilusú lilekí liye lya libosó. | |
Mark | LinVB | 2:22 | Mpé móto mǒ fkó té akotía víno ya sika o mábenga ma kala ; sókó asálí bôngó, víno ekopasola mábenga, ekosopana mpé mábenga makobéba. Bakotíaka víno ya sika bobélé o mábenga ma sika. » | |
Mark | LinVB | 2:23 | Mokolo mǒkó mwa sábato Yézu alekí o elanga ya mbuma ya mámpa. Ezalákí bangó kokende, bayékoli babandí kobúka mbuma. | |
Mark | LinVB | 2:24 | Ba-Farizéo balobí na Yézu : « Mpô níni bakosálaka likambo lipekísámí o mokolo mwa sábato ? » | |
Mark | LinVB | 2:25 | Yézu azóngísí : « Naíno botángí té maye Davídi asálákí ntángo azángákí biléi mpé ayókákí nzala, yě na báníngá ba yě ? | |
Mark | LinVB | 2:26 | O eleko ya nganga mokonzi Abiatar, Davídi ayíngélí o ndáko ya Nzámbe mpé aléí mámpa ma libonza ; apésí mpé báníngá ba yě. Nzókandé bobélé banganga Nzámbe bakokákí kolía mámpa mâná. » | |
Chapter 3
Mark | LinVB | 3:2 | Bazalákí konóngo Yézu, bámóno sókó akobíkisa yě o mokolo mwa sábato, bôngó báfúnda yě. | |
Mark | LinVB | 3:4 | Na nsima atúní bango : « Bakokí, o mokolo mwa sábato, kosala malamu tǒ té ? Bábíkisa yě tǒ bátíka yě ákúfa ? » Kasi batíkálí nyê. | |
Mark | LinVB | 3:5 | Yézu atálí bangó na nkándá, mpe ayókí mawa zambí balakísí motéma mabé. Alobí na moto wa mpási : « Tandá lobóko. » Atandí lobóko mpé lokómí malámu. | |
Mark | LinVB | 3:6 | Ba-Farizéo babimí mpé bakeí kosangana likita elongó na bato ba Eróde mpô báluka nzelá ya koboma yě. | |
Mark | LinVB | 3:7 | Yézu alongwí wâná na bayékoli ba yě mpé akeí o nzelá ya etíma. Bato ebelé balandí yě, baútí o Galiléa, o Yudéa, | |
Mark | LinVB | 3:8 | o Yerúzalem, o Iduméa, o ngámbo ya Yordáne, mpé o mbóka penepene na Tíro na Sidóni ; bato ebelé mpenzá bayéí epái ya yě, zambí bayókákí mánso asálákí. | |
Mark | LinVB | 3:10 | Awa abíkísí bato baíké, bato ba bokono bánso bawélí kokóma penepene na yě mpé kosímba yě. | |
Mark | LinVB | 3:11 | Ntángo baye bazalákí na bilímo mbindo bamóní yě, bamíbwákí o bosó bwa yě mpé bagángí : « Ozalí Mwána wa Nzá-mbe ! » | |
Mark | LinVB | 3:17 | Yakóbo, mwána wa Zebedéo, na Yoáne, ndeko wa Yakóbo ; apésí bangó nkómbó ‘Boanérges’, lokóla ’te ‘bána ba nkáké’ ; | |
Mark | LinVB | 3:18 | na nsima Andréa, Filípo, Barteleméo, Matéo, Tomá, Yakóbo mwána wa Alféo, Tadéo, Simóni moto mwa moléndé, | |
Mark | LinVB | 3:21 | Bandeko ba yě bayókí yangó, bakeí mpô ya kokamata yě na makási, zambí balobí : « Abélí ligbómá. » | |
Mark | LinVB | 3:22 | Batéyi ba Mobéko baútákí o Yerúzalem balobí : « Bélzebul akangí yě », mpé : « Akobenganaka bazábolo na ngúyá ya mokonzi wa bazábolo. » | |
Mark | LinVB | 3:23 | Yézu abéngí bangó mpé alobí na bangó na miúlání : « Bóníbóní Sátana akokí kobengana Sátana ? | |
Mark | LinVB | 3:26 | Bôngó sókó Sátana akómí mongúná wa yě mǒkó mpé bato ba yě bakabwání, akoúmela té mpé akosúka nokí. | |
Mark | LinVB | 3:27 | Moto mǒkó té akokí kokóto o ndáko ya elombé mpé koyíba bilóko, sókó akangí yě libosó na nsinga té ; bobélé na nsima akokoka koyíba bilóko bya yě. | |
Mark | LinVB | 3:29 | Kasi óyo atúkí Elímo Sántu, bakolímbisa yě mokolo mǒkó té ; akotíkala na lisúmu sékô. » | |
Mark | LinVB | 3:31 | Mamá na bandeko ba Yézu bayéí, batélémí o libándá, batíndí maloba mpô ya kobênga yě. | |
Mark | LinVB | 3:32 | Bato míngi bazíngí Yézu, bayébísí yě : « Mamá na bandeko ba yǒ bazalí o libándá, balingí komóno yǒ. » | |
Mark | LinVB | 3:34 | Alakísí na míso baye bafándí zóngazónga na yě, alobí : « Mamá na bandeko ba ngáí bangó baye. | |
Chapter 4
Mark | LinVB | 4:1 | Mokolo mosúsu Yézu abandí kotéya bato lisúsu o libóngo lya etíma ; bato ebelé mpenzá bayéí epái ya yě. Yangó wâná akwélí o bwáto mpé afándí wâná. Bato bánso batélémí o libóngo. | |
Mark | LinVB | 4:4 | Ezalákí yě kolóna bôngó, mbóto isúsu ikwéí mpembéni ya nzelá, ndeke iyéí kolía yangó. | |
Mark | LinVB | 4:5 | Mbóto isúsu ikwéí o káti ya mabángá, o esíká mabelé mazalákí míngi té ; ibimí nokí, zambí ikótí o mabelé bozindó té ; | |
Mark | LinVB | 4:8 | Mbóto isúsu ikwéí o mabelé malámu, ibimí, ikólí malámu, ibótí mbuma, esúsu ntúkú ísáto, esúsu ntúkú motóba, esúsu monkámá. » | |
Mark | LinVB | 4:10 | Ntángo bazalákí bobélé bangó mǒkó, baye bayébí Yézu na ba-zómi na bábalé, batúní yě áyébisa bangó ntína ya miúlání. | |
Mark | LinVB | 4:11 | Alobí na bangó : « Bínó bokokí koyéba mobómbamo mya Bokonzi bwa Nzámbe. Kasi bato basúsu bakoyóka mánso sé na miúlání, | |
Mark | LinVB | 4:12 | mpô ’te, atâ batálí na míso, bámóno té ; atâ bayókí na matói, bátongolo ntína té, bôngó bábóya kobóngola mitéma mpé bázwa bolímbisi masúmu té. » | |
Mark | LinVB | 4:13 | Atúní bangó : « Botongólí ntína ya moúlání moye té ? Bóníbóní bokoyéba ntína ya miúlání mínso ? | |
Mark | LinVB | 4:15 | Bato ‘o mpembéni ya nzelá’ esíká balóní Liloba, ezalí baye bayókí lyangó, kasi nokí Sátana ayéí mpé alongólí Liloba lilónámí o mitéma mya bangó. | |
Mark | LinVB | 4:16 | Bato bayambí Liloba ‘o esíká ya mabángá’ bobélé bôngó. Eyókí bangó Liloba, bayambí lyangó nokí na esengo ; | |
Mark | LinVB | 4:17 | kasi bazalí na minsisá o motéma té. Basepélí sé mokolo mǒkó ; kasi ekómí ntángo ya kondima mpási tǒ minyóko mpô ya Liloba, balembí nokí. | |
Mark | LinVB | 4:19 | kasi bamítungísí na mambí ma nsé, mpé bandimí mpósá ya mosolo mpé ya bilóko bisúsu, bôngó Liloba likowâ o mitéma mya bangó mpé likobóta mbuma té. | |
Mark | LinVB | 4:20 | Bato bayambí mbóto ‘o mabelé malámu’ ezalí bato baye bayókí Liloba, bayambí lyangó mpé bakobóta mbuma : mosúsu ntúkú ísáto, mosúsu ntúkú motóbá, mosúsu monkámá. » | |
Mark | LinVB | 4:21 | Yézu alobí na bangó : « Sókó bapélísí mwínda, bakobómbaka mwangó ndé o káti ya eboka tǒ o nsé ya mbéto ? Bakotíaka mwangó o etémiseli ya mwínda té ? | |
Mark | LinVB | 4:22 | Sé bôngó, makambo mánso mabómbámí makobima o libándá ; mánso mamónóní té makomónono polélé. | |
Mark | LinVB | 4:24 | Yézu alobí na bangó : « Bótía mayéle na makambo bozalí koyóka ! Ndéngé bínó bokokabelaka báníngá, bakokabela bínó sé bôngó ; mpé bakobakisela bínó naíno. | |
Mark | LinVB | 4:25 | Ya sôló, moto azalí na bilóko, bakopésa yě naíno ; kasi moto azalí na bilóko míngi té, bakobótolo yě atâ mwâ elóko ezalí na yě. » | |
Mark | LinVB | 4:27 | Moto álála mpongí tǒ álamuka, na mói tǒ na butú, mbóto ekobima mpé ekokóla ; yě mǒkó ayébí té sókó ndéngé níni. | |
Mark | LinVB | 4:28 | Mabelé mpenzá makobótisa mbóto ; ekobima libosó litíti, na nsima mitó, na nsima mbuma ya mámpa míngi mpenzá. | |
Mark | LinVB | 4:29 | Mokolo mbuma ikomélí, molóni akokende na mbelí, zambí ntángo ya bobúki mbuma ekokí. » | |
Mark | LinVB | 4:30 | Alobí lisúsu : « Bokonzi bwa Nzámbe bozalí lokóla níni ? Tokokí kolimbola bwangó na moúlání níni ? | |
Mark | LinVB | 4:31 | Ezalí lokóla mbóto ya sénevé : ntángo balóní yangó o mabelé elekí mbóto ínso ya mokili na boké. | |
Mark | LinVB | 4:32 | Kasi sókó basílí kolóna yangó, ekokóla mpé ekoleka milóna mínso na bolaí, ekobima bitápi binéne, bôngó ndeke ikokí kosála zúmbu o malíli ma yangó. » | |
Mark | LinVB | 4:33 | Na miúlání míngi mya motíndo môná azalákí kotéya Liloba lya Nzámbe, sé lokóla ekokí na mayéle ma baye bazalákí koyóka yě. | |
Mark | LinVB | 4:34 | Azalákí koloba na bangó sé na miúlání, kasi alimbólélí bayékoli mánso ntángo azalákí bobélé na bangó. | |
Mark | LinVB | 4:36 | Bazóngísí bato mpé bakeí na Yézu o bwáto boye afándí ; basúsu bakeí elongó na bangó na máto masúsu. | |
Mark | LinVB | 4:37 | Na mbala yǒ kó mompepe moyéí makási mpenzá, mokótísí mái ma mbóngé o bwáto, bôngó bwáto bobandí kotónda na mái. | |
Mark | LinVB | 4:38 | O mbáká ya nsima Yézu azalákí kolála mpongí, motó o monyuku. Balamúsí yě mpé balobí na yě : « Motéyi, tozalí kokúfa mpé yǒ ozalí kopangana na yangó té ! » | |
Mark | LinVB | 4:39 | Yézu alamúkí, agángélí mompepe, alobí na mái : « Tíká makeléle, zalá nyê. » Mompepe mokití, mái makómí kímíá mpenzá. | |
Chapter 5
Mark | LinVB | 5:2 | Elubwí Yézu, moto mǒkó ayéí kokútana na yě, akangémí na elímo mbindo, aútí o bikunda. | |
Mark | LinVB | 5:3 | Azalákí kofánda o káti ya malíta, mpé moto mǒkó té akokákí kokanga yě, atâ na monyolólo. | |
Mark | LinVB | 5:4 | Mbala míngi bakangákí yě na minyolólo o mabóko mpé o makolo, kasi abúkákí myangó. Moto mǒkó té azalákí na makási ma kolembisa yě. | |
Mark | LinVB | 5:5 | Ntángo ínso, butú mói, azalákí kotelengana o bikunda mpé o ngómbá, azalákí kogánga mpé komítúta na mabángá. | |
Mark | LinVB | 5:7 | agángí na mongóngó makási : « Yézu, Mwána wa Nzámbe wa Ntá-Likoló, bísó na yǒ likambo níni ? Nabóndélí yǒ na nkómbó ya Nzámbe, ónyókolo ngáí té ! » | |
Mark | LinVB | 5:9 | Yézu atúní yě : « Nkómbó ya yǒ náni ? » Azóngísí : « Nkómbó ya ngáí limpingá, mpô tozalí míngi. » | |
Mark | LinVB | 5:12 | Bilímo mbindo babóndélí Yézu : « Tíndá bísó epái ya ngúlu, tóyíngela o nzóto ya yangó. » | |
Mark | LinVB | 5:13 | Yézu alingísí bangó. Bôngó bilímo mbindo bibimí o nzóto ya moto ôná, mpé biyíngélí o ngúlu. Etónga mobimba, ngúlu sókí nkóto íbalé, ebílíngání o ngómbá, ekwéí o etíma mpé ekúfí o mái. | |
Mark | LinVB | 5:14 | Bakéngeli ba ngúlu bakímí, bayébísí nsango na bato o engumbá mpé o bilanga ; bôngó bato bayéí kotála likambo lîná. | |
Mark | LinVB | 5:15 | Bakómí epái ya Yézu mpé bamóní moto óyo azalákí na zábolo, afándí nyê mpé alátí bilambá. Moto óyo akangémákí mpenzá na limpingá lya bilímo bibé, akómí na mayéle sikáwa. Nsómo ekangí bangó bánso. | |
Mark | LinVB | 5:16 | Baye bamónókí yangó bayébísí bangó maye makwêlákí moto óyo azalákí na bilímo mbindo mpé maye masálémákí na ngúlu. | |
Mark | LinVB | 5:18 | Kasi ntángo Yézu akwélí o bwáto, moto akangémákí na bilímo mbindo abóndélí Yézu ’te ákoka kokende na yě. | |
Mark | LinVB | 5:19 | Kasi Yézu alingísí yě té, alobí na yě : « Zóngá o ndáko, epái ya bandeko ba yǒ, yébísá bangó maye mánso Mokonzi asálí yǒ, mpé bóníbóní ayókélí yǒ mawa. » | |
Mark | LinVB | 5:20 | Bôngó moto ôná akeí, mpé o ekólo ya Mbóka-Zómi abandí kosakola maye mánso Yézu asálí yě ; bato bánso bakámwí mpenzá. | |
Mark | LinVB | 5:21 | Yézu akátísí lisúsu etíma na bwáto. Ntángo akómí o ngámbo, bato ebelé bayéí kosangana epái ya yě ; áwa azalákí o libóngo, | |
Mark | LinVB | 5:23 | abóndélí yě míngi : « Mwána mwásí wa ngáí alingí awéí, yáká ótíela yě mabóko mpô ’te ábíka, átíkala na bomoi. » | |
Mark | LinVB | 5:25 | Mwásí mǒkó azalákí o káti ya bangó ; mbúla zómi na íbalé elekí abandákí kobéle bokono bwa botangi makilá. | |
Mark | LinVB | 5:26 | Ayókákí mpási mpenzá na bofúti mínganga míngi, asílísí mbóngo ya yě ínso, sé mpámba, abíkí té ; kútu bokono bwa yě bokómí kongala makási. | |
Mark | LinVB | 5:29 | Sikawâna, na mbala yǒ kó esíká makilá mazalákí kobima, ekaúkí ; ayókí o nzóto ’te mpási ya yě esílí. | |
Mark | LinVB | 5:30 | Yézu ayébí ’te ngúyá ebimí o nzóto ya yě, bôngó amíbóngólí epái ya bato bazalákí kolanda yě, atúní : « Náni asímbákí elambá ya ngáí ? » | |
Mark | LinVB | 5:31 | Bayékoli balobí na yě : « Omóní ’te bato ebelé bazalákí kozínga yǒ epái na epái, mpé otúní náni asímbákí yǒ ! » | |
Mark | LinVB | 5:33 | Sikáwa mwásí ôná akómí kobánga mpé kolénge, mpô ayébí malámu likambo likwêlí yě. Afukámí o bosó bwa Yézu mpé ayébísí yě mánso. | |
Mark | LinVB | 5:34 | Yézu alobí na yě : « Mwána mwasi boyambi bwa yǒ bobikisi yǒ. Kendé na bobóto mpé óbíka o bokono bwa yǒ. » | |
Mark | LinVB | 5:35 | Asílísí naíno koloba té, bato baútí o ndáko ya mokonzi wa sinagóga bayéí koyébisa yě : « Mwána mwásí wa yǒ asílí awéí. Mpô níni ótungisa Motéyi lisúsu ? » | |
Mark | LinVB | 5:36 | Kasi Yézu ayókí yangó, alobí na mokonzi wa sinagóga : « Obánga té, zalá sé na boyambi. » | |
Mark | LinVB | 5:37 | Alingísí moto mǒkó té ákende elongó na yě, kaká sé Pétro na Yakóbo na Yoáne, ndeko wa Yakóbo. | |
Mark | LinVB | 5:38 | Bakómí o ndáko ya mokonzi wa sinagóga, Yézu amóní bato bazalákí kotía makeléle, kolela mpé kogánga. | |
Mark | LinVB | 5:39 | Akótí o ndáko mpé alobí na bangó : « Mpô níni bozalí kotía makeléle mpé kolela boye ? Mwána awéí té, alálí mpongí. » | |
Mark | LinVB | 5:40 | Basekí yě ; kasi abimísí bato bánso o libándá, akamátí tatá na mamá wa mwána, ná mpé baye bayéí na yě, ayíngélí na bangó o esíká mwána azalákí. | |
Mark | LinVB | 5:41 | Asímbí mwána na lobóko mpé alobí na yě : « Tálita kúmi », lokóla ’te : « Mwána, nalobí na yǒ : télémé ! » | |
Mark | LinVB | 5:42 | Mwána atélémí, abandí kotámbola. Akokísí mbúla zómi na íbalé. Nsómo ekangí bangó bánso. | |
Chapter 6
Mark | LinVB | 6:2 | O mokolo mwa sábato, abandí kotéya o sinagóga. Bato míngi bayókí yě bakámwí, balobí : « Azwí mayéle mâná wápi ? Náni apésí yě bwányá bôná ? Bóníbóní akosálaka makamwísi manéne boye ? | |
Mark | LinVB | 6:3 | Yě mokabínda té ? Yě mwána wa María té ? Yě ndeko wa Yakóbo, Yozéfu, Yúda na Simóni té ? Bandeko básí ba yě bazalí áwa epái ya bísó té ? » Batútí libakú mpô ya yě. | |
Mark | LinVB | 6:4 | Mpé Yézu alobí na bangó : « Bakopésaka proféta lokúmu bipái bínso ; bobélé o mbóka ya yě, o libótá lya yě mpé epái ya bandeko ba yě bakokúmisaka yě té. » | |
Mark | LinVB | 6:5 | Kúná akokákí kosála likamwísi lyǒ kó té, abíkísí bobélé mǒkó na mǒkó wa bato ba bokono na botíeli bangó mabóko. | |
Mark | LinVB | 6:7 | Abéngí ba-zómi na bábalé mpé abandí kotínda bangó bábalé bábalé. Apésí bangó likokí lya kobengana bilímo mbindo, | |
Mark | LinVB | 6:8 | mpé apésí bangó mobéko moye : « Bómeme elóko yǒ kó o nzelá té, sé língénda ; mámpa té, líbenga té, mbóngo o lokéto mpé té. | |
Mark | LinVB | 6:10 | Mpé alobí na bangó : « Ekoyíngela bínó o ndáko ya moto, bófánda epái ya yě téé mokolo bokolongwa wâná. | |
Mark | LinVB | 6:11 | Sókó o mbóka yǒ kó bayambí bínó té mpé babóyí koyóka bínó, bóbima wâná mpé bópupola mputulú ya makolo ma bínó, mpô ya kolakisa ’te basálí mabé. » | |
Mark | LinVB | 6:14 | Mokonzi Eróde ayókí nsango ya Yézu, zambí nkómbó ya yě ekómí koyébana míngi. Basúsu balobí : « Yoáne Mobátisi asékwí o bawá ; yangó wâná akokí kosála makamwísi maye. » | |
Mark | LinVB | 6:15 | Basúsu bazalákí koloba : « Ezalí Elía. » Basúsu naíno : « Ezalí proféta lokóla baproféta basúsu. » | |
Mark | LinVB | 6:16 | Eyókí Eróde maloba mâná, alobí : « Ezalí Yoáne óyo natíndákí ’te bákáta yě motó, asékwí ! » | |
Mark | LinVB | 6:17 | Ya sôló, Eróde atíndákí bato ’te bákanga Yoáne o bolóko mpô ya likambo lya Erodiáda, mwásí wa Filípo, ndeko wa yě ; Eróde abálákí yě. | |
Mark | LinVB | 6:19 | Yangó wâná Erodiáda azalákí koyina yě mpé alukí nzelá ínso ya koboma yě, kasi azwí nzelá té, | |
Mark | LinVB | 6:20 | zambí Eróde azalákí kobánga Yoáne : ayébákí ’te azalí moto wa bosémbo mpé mosántu ; yangó wâná azalákí kobátela yě. Ntángo azalákí koyóka matéya ma yě, akómákí motéma likoló ; nzókandé azalákí kolinga míngi koyóka yě. | |
Mark | LinVB | 6:21 | Mokolo mobongélí Erodiáda, áwa Eróde asepélí mokolo mwa mbótama ya yě, abéngí bankúmú ba mbóka ná bakonzi ba basodá ná bakóló ba Galiléa o limpáti linéne. | |
Mark | LinVB | 6:22 | Mwána mwásí wa Erodiáda akótí mpé abíní ; asepélísí Eróde míngi ná mpé bato bazalákí na yě o méza. Eróde alobí na yě : « Séngé ngáí oyo olingí, nakopésa yǒ yangó. » | |
Mark | LinVB | 6:23 | Mpé alayélí yě ndaí eye : « Atâ níni okosénge, nakopésa yǒ yangó, ézala atâ ndámbo ya mabelé ma bokonzi bwa ngáí ! » | |
Mark | LinVB | 6:24 | Abimí mpé akeí kotúna mamá wa yě : « Násénge níni ? » Mamá azóngísí : « Séngé motó mwa Yoáne Mobátisi. » | |
Mark | LinVB | 6:25 | Elengé mwásí azóngí nokínoki epái ya mokonzi mpé alobí : « Nalingí ópésa ngáí sikasikáwa motó mwa Yoáne Mobátisi o sǎni. » | |
Mark | LinVB | 6:26 | Mokonzi ayókí mawa míngi, kasi asengélí kondimela yě mpô ya ndaí alayákí mpé mpô yá bato babyángémí o limpáti. | |
Mark | LinVB | 6:27 | Atíndí sodá mǒkó ákende, áyéla yě motó mwa Yoáne. Sodá akeí kokáta Yoáne motó o bolóko, | |
Mark | LinVB | 6:30 | Bapóstolo basangání lisúsu epái ya Yézu mpé bayébísí yě mánso basálákí mpé batéyákí. | |
Mark | LinVB | 6:31 | Yézu alobí na bangó : « Yákáni sé bínó mǒkó o esíká ya kímíá, mpé bópéma moké. » Bapóstolo bazwí atâ ntángo ya kolía té, mpô bato míngi bazalákí koyâ mpé kokende. | |
Mark | LinVB | 6:33 | Kasi ntángo bamóní ’te babandí kokende, bato míngi bayébí esíká níni balingí kokende. Bôngó bato baútí o mbóka ínso bakeí kúná na makolo, bakómí libosó lya bangó. | |
Mark | LinVB | 6:34 | Awa Yézu alubwí o libóngo, amóní bato ebelé. Ayókélí bangó mawa, zambí bazalákí lokóla mpatá izángí mokéngeli ; abandí kotéya bangó matéya míngi. | |
Mark | LinVB | 6:35 | Awa mói mobandí kokita, bayékoli bayéí epái ya yě mpé balobí na yě : « tozali áwa na esobe mpé ngonga esílí epusání ; | |
Mark | LinVB | 6:37 | Yézu azóngísélí bangó : « Bínó mǒkó bópésa bangó bilóko bya kolía. » Balobí na yě : « Tókende kosómba mámpa ma denário nkámá íbalé mpô tópésa bangó ? » | |
Mark | LinVB | 6:38 | Yézu alobí : « Bozalí na mámpa bóní ? Bókende kotála. » Bakeí kotála, balobí : « Mámpa mátáno na mbísi íbalé. » | |
Mark | LinVB | 6:41 | Yézu akamátí mámpa mátáno na mbísi íbalé, atómbólí míso o likoló, asámbélí losámbo la bobenisi, abúkí mámpa mpé apésí bayékoli bákabela bato. Akabélí bato bánso mpé mbísi íbalé. | |
Mark | LinVB | 6:45 | Bobélé o ntángo êná Yézu atíndí bayékoli bákwéla o bwáto, bákátisa ngambo ya etíma kín’o Betsáida. Yě mǒkó átíkala kozóngisa bato. | |
Mark | LinVB | 6:48 | Amóní ’te balembí na bolúki nkái, mpô mompepe mozalákí kozóngisa bangó nsima. Na nsósó ya yambo ayéí epái ya bangó, atámbólí likoló lya mái mpé alingí áleka bangó. | |
Mark | LinVB | 6:49 | Awa bamóní ’te azalákí kotámbola likoló lya mái, bagángí makási zambí bakanísí ’te bamóní elímá. | |
Mark | LinVB | 6:50 | Bánso bamóní yě, mayéle ma bangó mabúlúngání. Kasi Yézu alobí na bangó : « Bókitisa mitéma, ezalí ngáí, bóbánga té. » | |
Mark | LinVB | 6:51 | Akeí kofánda o bwáto elongó na bangó, mpé mompepe mokití. Mitéma mya bangó mitóndí na nsómo, | |
Mark | LinVB | 6:55 | bakátísí ekólo mobimba mpé babandí koyâ na bato ba bokono balálí o kitikwálá o esíká bayókí ’te Yézu akómí. | |
Chapter 7
Mark | LinVB | 7:1 | Mokolo mǒkó ba-Farizéo na batéyi ba Mobéko baútákí o Yerúzalem bayéí kosangana epái ya Yézu. | |
Mark | LinVB | 7:3 | Ba-Farizéo na ba-Yúda bánso bakolíaka té sókó libosó basukólí mabóko malámu té ; bakosálaka bôngó mpô ya botósi momeseno mwa bankóko. | |
Mark | LinVB | 7:4 | Sókó baútí o zándo, bakolíaka té libosó ’te básukola mabóko mpô mákóma péto ; bobélé na nsima bakokí kolía. Bazalí mpé na mimeseno misúsu míngi miútí na bankóko, miye bakotósaka : kosukola kópo, mbéki na sǎ ni ya mbengi. | |
Mark | LinVB | 7:5 | Yangó wâná ba-Farizéo na batéyi ba Mobéko batúní Yézu : « Mpô níni bayékoli ba yǒ bakotósaka mimeseno mya bankóko té ? Bakolíaka na mabóko mbindo ! » | |
Mark | LinVB | 7:6 | Alobí na bangó : « Bínó, bakíbisi ! Izáya asakólákí malámu makambo matálí bínó, lokóla ekomámí : ‘Bato baye bakokúmisaka ngáí na monoko, kasi mitéma mya bangó mizalí mosíká na ngáí. | |
Mark | LinVB | 7:7 | Bokúmisi bakokúmisaka ngáí bozalí sé mpámba, matéya bakotéyaka mazalí bitíndá biútí na bato’. | |
Mark | LinVB | 7:9 | Mpé abakísí : « Ya sôló, bozalí kobúka mobéko mwa Nzámbe mpô ya kotósa mimeseno mya bínó. | |
Mark | LinVB | 7:10 | Ya sôló, Móze alobákí : ‘Memyá tatá na mamá’, mpé ‘Moto abétélí tatá tǒ mamá wa yě mobondo, báboma yě’. | |
Mark | LinVB | 7:11 | Kasi bínó bokolobaka : Sókó moto alobí na tatá tǒ na mamá wa yě : ‘Lisálisi nalingákí kopésa bínó, nakobonzela Nzámbe lyangó’ ; | |
Mark | LinVB | 7:13 | Bokobomaka bôngó liloba lya Nzámbe mpô ya mimeseno miútí na bínó mǒkó. Mpé bokosálaka makambo masúsu míngi ma motíndo môná. » | |
Mark | LinVB | 7:15 | ’te bilóko bikótí o nzóto bikokómisa moto mbindo té ; kasi eye ekobima o moto, ekokómisa yě mbindo. | |
Mark | LinVB | 7:17 | Ntángo Yézu atíkí bangó mpé akótí o ndáko, bayékoli batúní yě ntína ya moúlání moye. | |
Mark | LinVB | 7:18 | Alobí na bangó : « Bôngó bínó mpé bozalí mayelé té ? Boyébí té ’te bilóko biyíngélí o libumu lya moto bikokí kokómisa yě mbindo té ? | |
Mark | LinVB | 7:19 | Bilóko bîná bikokóto o motéma té, kasi sé o libumu, na nsima bikokende o libúlú. » Na maloba mâná Yézu ayébísí ’te bilóko bya kolía bínso bizalí péto. | |
Mark | LinVB | 7:22 | bokáli, lokósó la mbóngo, motéma mabé, bokósi, bosóni, zúwa, songísongí, loléndo, bolémá. | |
Mark | LinVB | 7:24 | Elongwí Yézu kúná, akeí o mokili mwa Tíro na Sidóni. Akótí o ndáko yǒ kó, mpô alingí té ’te bato báyéba ; kasi akokí kobómbama té. | |
Mark | LinVB | 7:25 | Mosíká té, mamá mǒkó óyo ayókí nsango ya Yézu, ayéí kofukama o bosó bwa yě. Mpámba té, mwána mwásí wa yě azalákí na elímo mbindo o nzóto. | |
Mark | LinVB | 7:26 | Mwásí ôná azalákí mo-Gréki wa ekólo ya Fenísia ya Síria ; abóndélí Yézu ’te ábimisa zábolo o nzóto ya mwána wa yě. | |
Mark | LinVB | 7:27 | Yézu alobí na yě : « Tíká naíno bána bálía libosó mpé bátónda, zambí ebongí té ’te bákamata mámpa ma bána mpé bábwákela mángo bána ba mbwá. » | |
Mark | LinVB | 7:28 | Kasi mwásí azóngísélí yě : « Ya sôló, Mokonzi, kasi mbwá ikolíaka mpumbulú eye bána bakwéísí o nsé ya méza. » | |
Mark | LinVB | 7:29 | Bôngó Yézu alobí na yě : « Kendé malámu, mpô ya maloba mâná zábolo asílí abimí o nzóto ya mwána mwásí wa yǒ. » | |
Mark | LinVB | 7:31 | Yézu atíkí ekólo ya Tíro, akátísí Sidóni mpé akeí epái ya etíma ya Galiléa o mokili mwa Mbóka-Zómi. | |
Mark | LinVB | 7:33 | Yézu alongólí yě o káti ya bato, akeí na yě mpembéni ; atíí misapi o matói ma yě, akamátí nsóí mpé asímbí lolému la yě. | |
Mark | LinVB | 7:34 | Na nsima atómbólí míso o likoló, akímélí mpé alobí : « Efeta », lokóla ’te « Fungwámá. » | |
Mark | LinVB | 7:36 | Yézu akébísí bangó ’te báyébisa yangó na moto mǒkó té. Kasi áwa yě apusí kopekisa, bangó bapusí kotámbwisa nsango. | |
Chapter 8
Mark | LinVB | 8:1 | Mokolo bato míngi basangání lisúsu mpé bazalákí na elóko ya kolía té, Yézu abéngí bayékoli epái ya yě mpé alobí na bangó : | |
Mark | LinVB | 8:2 | « Nayókélí bato baye mawa. Tálá, bazalí na ngáí mikolo mísáto mpé bazalí na elóko ya kolía té. | |
Mark | LinVB | 8:3 | Sókó nazóngísí bangó epái ya bangó na nzala, bakokwéya o nzelá, zambí basúsu baútí mosíká. » | |
Mark | LinVB | 8:4 | Bayékoli bazóngísí : « Nani akoki koleisa bato ebele boye mpé bátónda áwa na esobe ? » | |
Mark | LinVB | 8:6 | Atíndí ’te bato bánso báfánda o nsé. Akamátí mámpa mâná nsambo, atóndí Nzámbe, abúkí mangó, apésí bayékoli bákabela bato ; bapésí bato. | |
Mark | LinVB | 8:7 | Bazalákí mpé na mwâ mbísi iké. Yézu abenísí yangó, atíndí bayékoli bákabela bato mpé yangó. | |
Mark | LinVB | 8:10 | Sé o ntángo êná akwélí o bwáto elongó na bayékoli ba yě mpé akómí o ekólo ya Dalmanúta. | |
Mark | LinVB | 8:11 | Ba-Farizéo bayéí epái ya yě mpé babandí kowéla ntembe na yě. Mpô ya komeka yě baséngí yě elembo eútí o likoló. | |
Mark | LinVB | 8:12 | Yézu akímélí mpô ya mawa, alobí : « Mpô níni bato baye bazalí kosénge ngáí elembo ? Ya sôló, nayébísí bínó, bakopésa bato ba eleko eye elembo yǒ kó té. » | |
Mark | LinVB | 8:15 | Yézu akébísí bangó : « Bótálaka malámu ! Bókéba na nkísi ya mámpa ya ba-Farizéo mpé ya Eróde. » | |
Mark | LinVB | 8:17 | Emóní Yézu yangó, alobí na bangó : « Mpô níni bozalí kolobana ’te : Tozalí na mámpa té ? Naíno botongólí té ? Boyókí ntína té ? Mitéma mya bínó mibongí naíno té ? | |
Mark | LinVB | 8:18 | Bozalí ndé na míso mpô ya komóno té ? Bozalí na matói mpô ya koyóka té ? Bokundólí o mitéma té | |
Mark | LinVB | 8:19 | bikoló bóní botóndísákí na mintíka mya mámpa mokolo nabúkákí mámpa mátáno mpô ya koléisa bato nkóto ítáno ? » Bazóngísí : « Zómi na bíbalé. » | |
Mark | LinVB | 8:20 | Atúní lisúsu : « Mpé mokolo nabúkákí mámpa nsambo mpô ya koléisa bato nkóto ínei, botóndísákí bikoló bóní na mintíka ? » Bazóngísí : « Nsambo. » | |
Mark | LinVB | 8:23 | Yézu asímbí moto wa lolandá na lobóko, mpé akeí na yě o libándá lya mbóka. Apakólí yě nsóí o míso, atíélí yě mabóko mpé atúní yě : « Ozalí komóno níni ? » | |
Mark | LinVB | 8:25 | Yézu atíélí yě lisúsu mabóko o míso. Sikáwa akómí komóno malámu ; abíkí, mpô amóní bínso polélé. | |
Mark | LinVB | 8:27 | Yézu akeí elongó na bayékoli ba yě epái ya mbóka ya Sezaréa ya Filípo. O nzelá atúní bayékoli motúna moye : « Bato bakolobaka ’te ngáí náni ? » | |
Mark | LinVB | 8:28 | Bayanólí yě : « Basúsu bakolobaka ’te ozalí Yoáne Mobátisi ; basúsu bakanísí ’te ozalí Elía ; basúsu ’te ozalí mǒkó wa baproféta. » | |
Mark | LinVB | 8:29 | Yézu atúní bangó : « Kasi bínó bokanísí ’te ngáí náni ? » Pétro azóngísí : « Ozalí Krístu. » | |
Mark | LinVB | 8:31 | Abandí koyébisa bangó ’te Mwána wa Moto ndâsengélí koyóka mpási míngi. Bakóló, banganga bakonzi na batéyi ba Mobéko bakobóya yě, bakoboma yě, mpé nsima ya mikolo mísáto akosékwa. | |
Mark | LinVB | 8:32 | Azalákí koloba makambo mâná polélé. Bôngó Pétro abéndí Yézu mpembéni, mpé amekí kobóngola makanisi ma yě. | |
Mark | LinVB | 8:33 | Kasi Yézu amíbóngólí mpé atálí bayékoli ba yě, akébísí Pétro, alobí : « Longwá, Sátana ! Makanisi ma yǒ maútí na Nzámbe té, maútí na bato ! » | |
Mark | LinVB | 8:34 | Yézu abéngí bayékoli ba yě bato bánso lokóla, alobí na bangó : « Sókó moto alingí kozala moyékoli wa ngáí, ámíbóya, ámeme kurúse ya yě mpé álanda ngáí ; | |
Mark | LinVB | 8:35 | zambí moto alingí kobíkisa bomoi bwa yě, akobúngisa bwangó ; kasi moto akobúngisa bomoi bwa yě mpô ya nkómbó ya ngáí mpé mpô ya Nsango Elámu, akobíkisa bwangó. | |
Chapter 9
Mark | LinVB | 9:1 | Alobí mpé na bangó : « Ya sôló, nayébísí bínó, bato basúsu bazalí áwa bakokúfa té libosó ’te bámóno Bokonzi bwa Nzámbe boyéí na ngúyá enéne. » | |
Mark | LinVB | 9:2 | Nsima ya mikolo motóbá Yézu akamátí Pétro, Yakóbo na Yoáne, bobélé bangó mǒkó, abutí na bangó ngómbá esándá, o míso ma bangó abóngwání na nzóto. | |
Mark | LinVB | 9:3 | Bilambá bya yě bikómí kongenge, bikómí mpémbé mpenzá : moto mǒkó té o mokili mobimba akokí kotelisa bilambá bôngó. | |
Mark | LinVB | 9:5 | Pétro alobí na Yézu : « Motéyi, kozala áwa ezalí malámu míngi ; tópika biéma bísáto áwa, yǒkó ya yǒ, yǒ kó ya Móze, mpé yǒ kó ya Elía. » | |
Mark | LinVB | 9:7 | Limpata liyéí kozipa bangó, mpé loláká loyókání út’o limpata : « Oyo azalí Mwána wa ngáí wa bolingo, bóyóka yě. » | |
Mark | LinVB | 9:8 | Na mbálákáká, bátála zóngazónga na bangó, bamóní moto mosúsu té, sé bangó mǒkó na Yézu. | |
Mark | LinVB | 9:9 | Ekómí bangó kokita ngómbá, Yézu apekísí bangó báloba likambo bamónókí na moto mǒkó té téé mokolo Mwána wa Moto akosékwa o bawá. | |
Mark | LinVB | 9:10 | Babómbí maloba mâná o mitéma ; kasi bazalákí komítúna ’te : kosékwa o bawá lokóla níni ? | |
Mark | LinVB | 9:11 | Batúní yě motúna moye : « Mpô níni batéyi ba Mobéko bakolobaka ’te Elía asengélí koyâ libosó ? » | |
Mark | LinVB | 9:12 | Azóngísí : « Elía akoyâ libosó mpô ’te ábongisa makambo mánso. Kasi mpô níni bakomí o Minkandá ’te Mwána wa Moto akoyóka mpási míngi mpé bakokínola yě ? | |
Mark | LinVB | 9:13 | Bôngó náyébisa bínó : Elía asílí ayákí, mpé basálákí yě lokóla bangó mǒkó balingákí, sé lokóla ekomámí mpô ya yě. » | |
Mark | LinVB | 9:14 | Ntángo bazóngí epái ya bayékoli basúsu, bamóní bato ebelé bazíngí bangó ; batéyi ba Mobéko bazalákí kowéla ntembe na bangó. | |
Mark | LinVB | 9:17 | Moto mǒkó o káti ya bangó alobí : « Motéyi, nayélí yǒ mwána mobáli wa ngáí azalí na elímo ebé akómísá yě ebúbú. | |
Mark | LinVB | 9:18 | Sókó akangí yě, akobwáka yě o nsé, mwána akobimisa fúlu o monoko, akolía míno mpé nzóto ya yě ekoningana lisúsu té. Nabóndélákí bayékoli ba yǒ bábengana elímo êná, kasi bakokákí té. » | |
Mark | LinVB | 9:19 | Yézu azóngísí : « Bínó bato ba ntembe, mikolo bóní názala naíno na bínó ? Kín’o mokolo níni nákanga naíno motéma mpô ya bínó ? Bóyâ na yě áwa. » | |
Mark | LinVB | 9:20 | Bayéí na yě epái ya Yézu. Awa amóní Yézu, elímo aningísí mwána makási : mwána akwéí o mabelé, abílíngání na fúlu o monoko. | |
Mark | LinVB | 9:21 | Yézu atúní tatá wa yě : « Mbúla bóní azalí na mpási boye ? » Tatá azóngísí : « Ut’o bomwána. | |
Mark | LinVB | 9:22 | Mbala míngi elímo abwákí yě o móto tǒ o mái mpô ya koboma yě. Kasi sókó okokí, sálísá bísó mpé yókélá bísó mawa. » | |
Mark | LinVB | 9:25 | Yézu amóní ’te bato bakómí koyâ míngi, agángélí elímo mbindo, alobí : « Yó, elímo okúfá matói mpé oyébí koloba té, natíndí yó, bimá o nzóto ya mwána óyo, mpé ózóngela yě lisúsu té. » | |
Mark | LinVB | 9:26 | Elímo agángí, aningísí mwána makási téé atíkí yě. Mwána atíkálí lokóla moto awéí. Yangó wâná bato míngi balobí : « Mwána awéí. » | |
Mark | LinVB | 9:28 | Ezóngí Yézu o ndáko, bayékoli batúní yě : « Mpô níni bísó tokokákí kobengana yě té ? » | |
Mark | LinVB | 9:30 | Balongwí wâná, bakátísí mokili mwa Galiléa. Yézu alingí té ’te bato báyéba esíká azalí, | |
Mark | LinVB | 9:31 | zambí azalákí kotéya bayékoli ba yě. Alobí na bangó : « Bakokaba Mwána wa Moto o mabóko ma bato, mpé bakoboma yě ; kasi mikolo mísáto nsima ya liwá lya yě akosékwa. » | |
Mark | LinVB | 9:33 | Bakómí o Kafárnaum mpé bakótí o ndáko. Yézu atúní bangó : « Bozalákí kowélana níni o nzelá ? » | |
Mark | LinVB | 9:35 | Yézu akeí kofánda, abéngí bapóstolo zómi na bábalé, alobí na bangó : « Oyo alingí kozala moto wa libosó, ázala nsima ya bato bánso, ákóma mosáleli wa bangó bánso. » | |
Mark | LinVB | 9:37 | « Moto ayambí mwána moké, lokóla óyo, mpô ya nkómbó ya ngáí, ayambí ngáí mǒkó. Mpé óyo ayambí ngáí, ayambí bobélé ngáí té, kasi ayambí mpé óyo atíndí ngáí. » | |
Mark | LinVB | 9:38 | Yoáne alobí na yě : « Motéyi, tomónókí moto mǒkó azalákí kobengana bazábolo o nkómbó ya yǒ ; yě akolandaka bísó té, yangó wâná tolingákí kopekisa yě, zambí alandí bísó té. » | |
Mark | LinVB | 9:39 | Kasi Yézu azóngísí : « Bópekisa yě té, zambí moto akosála likamwísi o nkómbó ya ngáí, nsima akobanda kotóngo ngáí. | |
Mark | LinVB | 9:41 | Moto akopésa bínó kópo ya mái, zambí bozalí bato ba Krístu, ya sôló, nayébísí bínó : akozwa mbano ya yě. | |
Mark | LinVB | 9:42 | Moto apésí esímbisi na mwána moké óyo ayambí ngáí, elekí malámu bákanga yě libángá linéne o nkíngó mpé bábwáka yě o mbú. | |
Mark | LinVB | 9:43 | Sókó lobóko lokotíela yǒ libakú lya kosála lisúmu, kátá langó. Malámu óyíngela o bomoi (bwa lobíko) na lobóko lǒ kó, kasi ókóma na mabóko mábalé o límfelo té, esíká móto mokozíma té. ( | |
Mark | LinVB | 9:45 | Sókó lokolo lokotíela yǒ libakú lya kosála lisúmu, kátá langó. Malámu óyíngela o bomoi bwa lobíko na lokolo lǒkó, kasi bábwáka yǒ na makolo mábalé o límfelo té. ( | |
Mark | LinVB | 9:47 | Sókó líso likotíela yǒ libakú lya kosála lisúmu, longólá lyangó, bwáká lyangó mosíká. Malámu óyíngela o Bokonzi bwa Nzámbe na líso lyǒ kó, kasi bábwáka yǒ na míso mábalé o límfelo té. | |
Mark | LinVB | 9:49 | Ya sôló, lokóla bakobongisaka biléi na móngwa, sé bôngó bakopétola bato bánso na móto. | |
Chapter 10
Mark | LinVB | 10:1 | Yézu alongwí wâná, akeí o mokili mwa Yudéa mpé o ngámbo ya Yordáne. Bato míngi bayéí lisúsu epái ya yě, abandí kotéya bangó lokóla ameséní. | |
Mark | LinVB | 10:2 | Ba-Farizéo babelémí, batúní yě : « Mobáli akokí ndé kolongola mwásí wa yě wa libála ? » Batúní bôngó mpô ya komeka yě. | |
Mark | LinVB | 10:4 | Balobí : « Móze alingísí mobáli ákoma monkandá mwa bobomi libála, bôngó álongola mwásí. » | |
Mark | LinVB | 10:8 | mpé yě na mwásí wa yě bakokóma sé moto mǒkó. Bôngó bazalí bato bábalé lisúsu té, kasi sé moto mǒkó. | |
Mark | LinVB | 10:11 | Alobí na bangó : « Moto alongólí mwásí wa yě mpé abálí mosúsu, asálí bokáli, zambí atíkí óyo wa libosó. | |
Mark | LinVB | 10:12 | Sókó mwásí abóyí mobáli wa yě mpé mobáli mosúsu abálí yě, mwásí ôná asálí bokáli. » | |
Mark | LinVB | 10:14 | Emóní Yézu bôngó, ayókí mabé, alobí na bangó : « Bótíka bána baké báyâ epái ya ngáí, bópekisa bangó té, zambí baye bazalí lokóla bangó bakoyíngela o Bokonzi bwa Nzámbe. | |
Mark | LinVB | 10:15 | Ya sôló, nayébísí bínó : moto ayambí Bokonzi bwa Nzámbe lokóla mwána moké té, akoyíngela wâná té. » | |
Mark | LinVB | 10:17 | Ntángo akómí kokende, moto mǒkó ayéí mbángu epái ya yě, afukámélí yě, atúní : « Motéyi malámu, násála níni mpô ’te názwa bomoi bwa lobíko ? » | |
Mark | LinVB | 10:18 | Yézu alobí na yě : « Mpô níni obengí ngáí moto malámu ? Moto mǒkó té azalí malámu, bobélé Nzámbe. | |
Mark | LinVB | 10:19 | Oyébí mibéko : Oboma moto té, ósála bokáli té, óyíba té, ózala nzénénéké wa lokutá té, ósála moto mǒkó mabé té, memyá tatá na mamá. » | |
Mark | LinVB | 10:21 | Yézu atálí yě mpé alingi ye, alobí na yě : « Ozángí sé mpô yǒkó : kendé, téké bilóko bya yǒ bínso, kabélá babóla, ndôzwí nkita o likoló. Na nsima, yáká mpé landá ngáí. » | |
Mark | LinVB | 10:22 | Kasi eyókí yě maloba mâná, alembí nyé, mpé akeí na mawa o motéma, zambí azalákí na bilóko míngi. | |
Mark | LinVB | 10:23 | Yézu atálí zóngazónga na yě mpé alobí na bayékoli ba yě : « Bato bazalí na nkita enéne bakoyíngela o Bokonzi bwa Nzámbe bobélé na mpási mpenzá ! » | |
Mark | LinVB | 10:24 | Bayékoli bakámwí míngi na maloba mâná, kasi Yézu alobí na bangó lisúsu : « Bána ba ngáí, koyíngela o Bokonzi bwa Nzámbe ezalí mpási ! | |
Mark | LinVB | 10:25 | Mokulu mwa nsúki ya kaméla mokoleka o lilusú lya ntonga na mpási sôló, kasi mpô ’te moto wa nkita áyíngela o Bokonzi bwa Nzámbe, elekí kwókósó ! » | |
Mark | LinVB | 10:27 | Yézu atálí bangó, alobí : « Bato bakokí na likambo lyangó té, kasi Nzámbe akokí, zambí likambo lyǒ kó té lilekí Nzámbe na bokási. » | |
Mark | LinVB | 10:29 | Yézu azóngísí : « Ya sôló, nayébísí bínó, sókó moto atíkí ndáko, bandeko babáli na básí, mamá, tatá, bána tǒ bilanga bya yě, mpô ya ngáí mpé mpô ya Nsango Elámu, | |
Mark | LinVB | 10:30 | akozwa byangó bínso mbala monkámá út’o leló o mokili moye : ndáko, bandeko babáli na básí, bamamá, bána, bilanga, ná mpé minyóko ; mpé o mokili mokoyâ nsima akozwa bomoi bwa sékô. | |
Mark | LinVB | 10:31 | Bato míngi ba libosó bakozala bato ba nsima ; bato míngi ba nsima bakozala bato ba libósó. » | |
Mark | LinVB | 10:32 | Bazalákí kokende o Yerúzalem ; Yézu atámbólí libosó lya bangó, bazalákí kokámwa míngi ; baye bazalákí kolanda bangó, bazalákí mpé kobánga. Akamátí lisúsu ba-zómi na bábalé epái, mpé abandí koyébisa bangó maye makokwêla yě : | |
Mark | LinVB | 10:33 | « Tálá, tozalí kokende o Yerúzalem, bakokaba Mwána wa Moto o mabóko ma banganga bakonzi mpé ma batéyi ba Mobéko. Bakokitisa yě o liwá mpé bakokaba yě o mabóko ma bapagáno ; | |
Mark | LinVB | 10:34 | bakotiola yě, bakobwákela yě nsóí, bakobete yě fímbo mpé bakoboma yě. Kasi nsima ya mikolo mísáto akosékwa. » | |
Mark | LinVB | 10:35 | Yakóbo na Yoáne, bána ba Zebedéo, babelémí na yě, balobí na yě : « Motéyi, tolingí ósálela bísó likambo tokosénge yǒ. » | |
Mark | LinVB | 10:37 | Balobí na yě : « Olingisa bísó tófánda mǒkó o lobóko la yǒ la mobáli, mosúsu o lobóko la yǒ la mwásí o mbóka ya yǒ ya nkémbo. » | |
Mark | LinVB | 10:38 | Yézu alobí na bangó : « Boyébí té níni mpenzá bozalí kosénge. Bokokí ndé komele nkéni ngáí nakomele mpé kondima kokúla batísimo ngáí nakokúla ? » | |
Mark | LinVB | 10:39 | Bazóngísí : « Tokokí. » Yézu alobí na bangó : « Nkéni ngáí nakomele, bínó mpé bokomele yangó ; batísimo ngáí nakokúla, bínó mpé bokokúla yangó. | |
Mark | LinVB | 10:40 | Kasi ngáí nakokí kofándisa bínó o lobóko la ngáí la mobáli tǒ la mwásí té ; bato baponómí bakozwa bisíká bîná. » | |
Mark | LinVB | 10:42 | Yézu abéngí bangó, alobí : « Boyebí ’te baye bato bakotálaka lokóla bakonzi ba bikólo bakoyángelaka bato na bokonzi mpenzá, mpé bato banéne bakoyókisaka bato bokási bwa bangó. | |
Mark | LinVB | 10:43 | O ntéi ya bínó ekokí kozala bôngó té. Moto óyo alingí kokóma moto monéne o ntéi ya bínó, ázala mosáleli wa bínó. | |
Mark | LinVB | 10:45 | zambí Mwána wa Moto ayéí té mpô ’te básálela yě, kasi mpô ’te ásálela bangó mpé ákaba bomoi bwa yě mpô ya kobíkisa bato ebelé. » | |
Mark | LinVB | 10:46 | Bakómí o Yeríko. Ntángo Yézu alongwí o Yeríko elongó na bayékoli mpé na bato basúsu ebelé, moto mǒkó wa lolandá, Bartiméo, mwána wa Timéo, afándí mpembéni ya nzelá koséngeke makabo. | |
Mark | LinVB | 10:47 | Awa ayókí ’te Yézu wa Nazaréte azalákí wâná, abandí kogánga : « Yézu, mwána wa Davídi, yókélá ngáí mawa ! » | |
Mark | LinVB | 10:48 | Bato míngi bagángélí yě mpô ’te ákanga monoko ; kasi yě aléndísí kogánga : « Mwána wa Davídi, yókélá ngáí mawa. » | |
Mark | LinVB | 10:49 | Yézu atélémí mpé alobí : « Bóbênga yě. » Babyángí moto wa lolandá, balobí na yě : « Léndísá motéma, azalí kobyánga yǒ. » | |
Mark | LinVB | 10:51 | Yézu atúní yě : « Olingí násála yǒ níni ? » Moto wa lolandá azóngísí : « Motéyi, sálá ’te námóno lisúsu ! » | |
Chapter 11
Mark | LinVB | 11:1 | Ebelémí bangó na Yerúzalem, epái ya Betfage mpé ya Betánia, penepene na ngómbá ya Olíva, Yézu atíndí bayékoli bábalé, | |
Mark | LinVB | 11:2 | alobí na bangó : « Bókende o mbóka bozalí komóno. Sókó bokómí kúná, bokomóno mwána wa mpúnda ekangémí, eye babutélí naíno té. Bókangola yangó mpé bóyâ na yangó áwa. | |
Mark | LinVB | 11:3 | Sókó moto atúní bínó : ‘Bozalí kosála níni ?’, bóloba na yě : ‘Mokonzi asengélí na yangó, akozóngisa yangó áwa nokí’. » | |
Mark | LinVB | 11:4 | Bakeí, bakútí mpúnda o balabála, ekangémí penepene na ezibeli ya ndáko. Bakangólí yangó. | |
Mark | LinVB | 11:7 | Bayéí na mwána wa mpúnda epái ya Yézu. Batandí minkóto mya bangó o mpúnda ; Yézu afándélí yangó. | |
Mark | LinVB | 11:8 | Bato míngi batandí minkóto mya bangó o nzelá ; basúsu bakátí bitápi biké o bilanga, batíí byangó o nzelá. | |
Mark | LinVB | 11:9 | Bato bazalákí kotámbola o libosó ná baye bazalákí kolanda o nsima, bánso bagángí : « Ozána ! Bábenisa óyo akoyâ o nkómbó ya Mokonzi ! | |
Mark | LinVB | 11:11 | O Yerúzalem Yézu ayíngélí o Témpelo mpé atálí bínso bizalákí wâná. Ekómí mpókwa azóngí o Betánia elongó na ba-zómi na bábalé. | |
Mark | LinVB | 11:13 | Mwâ mosíká amóní nzeté ya fígi ezalí na nkásá míngi. Akeí kotála sókó akozwa mwâ mbuma ya yangó ; kasi áwa akómí penepene, amóní sé nkásá, zambí ezalákí eleko ya mbuma té. | |
Mark | LinVB | 11:14 | Alobí na nzeté : « Moto mǒkó álía lisúsu mbuma ya yǒ té, atâ mokolo mǒkó té ! » Bayékoli bayókí maloba mâná. | |
Mark | LinVB | 11:15 | Bakómí o Yerúzalem. Eyíngélí Yézu o Témpelo, abandí kobengana bato bazalákí kotéke mpé kosómba bilóko, abwákí méza ya bato bakosénzeke mbóngo mpé kíti ya baye bakotékeke bibengá, | |
Mark | LinVB | 11:17 | Atéyí bangó, alobí : « O Minkandá ekomámí té ’te : Bakobénga Ndáko ya ngáí ndáko ya losámbo ya bato ba bikólo bínso ? Kasi bínó bobóngólí yangó nganda ya bayíbi ! » | |
Mark | LinVB | 11:18 | Banganga bakonzi na batéyi ba Mobéko bayókí yangó, balukí nzelá ya koboma yě. Bazalákí kobánga yě, mpô bato bánso bazalákí kosepela míngi na matéya ma yě. | |
Mark | LinVB | 11:21 | Pétro akundólí maloba ma Yézu, alobí na yě : « Motéyi, tálá nzeté ya fígi obétélékí mobondo ekaúkí. » | |
Mark | LinVB | 11:23 | Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Sókó moto alobí na ngómbá eye : ‘Longwá áwa mpé ómíbwáka o mbú’, sókó o káti ya motéma atíí ntembe té, kasi ayambí ’te eye azalí koloba ekosálema, ekosálema sôló. | |
Mark | LinVB | 11:24 | Yangó wâná nalobí na bínó : Mánso bokosénge o losámbo, bóyamba ’te bosílí bozwí mangó, bôngó bokozwa mangó sôló. | |
Mark | LinVB | 11:25 | Ntángo botélémí mpô ya losámbo, sókó bozalí na likambo na moto mosúsu, bólímbisa yě mpô ’te Tatá wa bínó azalí o likoló álímbisa mabé ma bínó lokóla. » ( | |
Mark | LinVB | 11:27 | Bakómí lisúsu o Yerúzalem. Yézu akeí o Témpelo. Banganga bakonzi, batéyi ba Mobéko na bakóló bayéí epái ya yě, | |
Mark | LinVB | 11:28 | batúní yě : « na likokí lya ndenge nini okosala makambo maye ? Náni apesi yǒ likoki liye ? » | |
Mark | LinVB | 11:29 | Yézu azóngísí : « Nakotúna bínó motúna sé mǒkó ; sókó boyanólí ngáí, ngáí mpé nakoyébisa bínó náni apésí ngáí likokí lya kosála yangó. | |
Mark | LinVB | 11:31 | Batúnání mpé bamílobélí : « Sókó tolobí ‘Nzámbe’, mbele akotúna bísó : Bôngó mpô níni boyambákí yě té ? | |
Mark | LinVB | 11:32 | Kasi tóloba ‘bato’ ?… » Bazalákí kobánga bato, zambí bato bánso bazalákí kondima ’te Yoáne azalákí proféta sôló. | |
Chapter 12
Mark | LinVB | 12:1 | Yézu abandí koloba na bangó na miúlání : « Moto mǒkó alóní nzeté o elanga ya víno, azíngí elanga na lopángo, atímólí esíká ya kokámola mbuma, atóngí linóngi lya bakéngeli. Na nsima atíkí yangó o mabóko ma bafúteli mpé akeí mobémbo. | |
Mark | LinVB | 12:2 | Ntángo elaká ekokí, atíndélí bafúteli mosáleli mǒkó ákamata ndámbo ya mbuma ya víno. | |
Mark | LinVB | 12:5 | Atíndí moto mosúsu ; babomí yě. Nsima atíndí naíno basáleli míngi : babétí basúsu, babomí basúsu. | |
Mark | LinVB | 12:6 | Nkóló wa elanga atíkálí bobélé na moto mǒkó, mwána wa yě wa bolingo. Na nsúka atíndí yě epái ya bangó, amílobélí ’te : ‘Bakobánga mwána wa ngáí.’ | |
Mark | LinVB | 12:7 | Kasi basáli ba elanga balobání : ‘Tálá moto akosangola elanga. Tókende koboma yě ; bôngó bísó mǒkó tózwa elanga.’ | |
Mark | LinVB | 12:9 | Bôngó nkóló wa elanga akosála níni ? Akoyâ, akoboma basáli mpé akopésa bato basúsu elanga ya víno. | |
Mark | LinVB | 12:10 | Bínó botángí Minkandá Misántu té esíká bakomí : Libángá liye batóngi ndáko babwákákí likómí libángá lya litúmu. | |
Mark | LinVB | 12:12 | Balukí nzelá ya kokanga Yézu, zambí bayébí malámu ’te azalákí koloba moúlání moye mpô ya bangó. Kasi babángí bato, yangó wâná batíkí yě mpé bakeí. | |
Mark | LinVB | 12:14 | Bayéí koloba na yě : « Motéyi, toyébí ’te okolobaka sé na bosôló, okobángaka moto mǒkó té, zambí okotálaka bilongi bya bato té ; okolakisaka nzelá ya Nzámbe sé na bosémbo. Oyébisa bísó : Tokokí kofúta mpáko ya Kaizáro tǒ té ? Tófúta yangó tǒ té ? » | |
Mark | LinVB | 12:15 | Kasi Yézu ayébí mayéle ma bangó ma bokíbisi, alobí na bangó : « Mpô níni bolingí kotíela ngáí motámbo ? Bóyéla ngáí denário, nátála yangó. » | |
Mark | LinVB | 12:16 | Bayélí yě yangó mpé atúní bangó : « Elongi mpé nkómbó eye ya náni ? » Bazóngísélí yě : « Ya Kaizáro. » | |
Mark | LinVB | 12:17 | Yézu alobí na bangó : « Bópésa Kaizáro bya yě ; bópésa mpé Nzámbe bya yě ! » Bakámwí na yě míngi. | |
Mark | LinVB | 12:19 | « Motéyi, Móze apésí bísó mobéko moye : ‘Sókó moto akúfí mpé atíkí mwásí, kasi abótí na yě té, ndeko wa yě asengélí kobála mwásí ôná mpô ábótela ndeko wa yě óyo akúfí bána. | |
Mark | LinVB | 12:23 | Bôngó ntángo bato bakosékwa, akozala mwásí wa náni ? Zambí azalákí mwásí wa bangó bánso nsambo. » | |
Mark | LinVB | 12:24 | Yézu alobí na bangó : « Bobúngí, mpô boyébí Minkandá té, boyébí ngúyá ya Nzámbe mpé té. | |
Mark | LinVB | 12:25 | Mpámba té, ntángo bato bakosékwa bakobála lisúsu té, kasi bakozala lokóla bǎnzelú o likoló. | |
Mark | LinVB | 12:26 | Mpô ya nsékwa ya bawá botángí o búku ya Móze té ’te Nzámbe abimélí yě o káti ya nzeté epelí móto, alobí na yě : ‘Nazalí Nzámbe wa Abaráma, Nzámbe wa Izáka, Nzámbe wa Yakób’ ? | |
Mark | LinVB | 12:28 | Motéyi mǒkó wa Mobéko ayókákí bangó ntángo bazalákí kowélana ntembe ; amóní ’te Yézu ayanólí bangó malámu, ayéí mpé atúní yě : « O ntéi ya mibéko mínso mobéko níni molekí bonéne ? » | |
Mark | LinVB | 12:29 | Yézu ayanólí : « Mobéko mwa libosó mozalí : Bato ba Israél, bóyóka ! Mokonzi Nzámbe wa bísó azalí Mokonzi sé yě mǒkó ; | |
Mark | LinVB | 12:30 | ólinga Mokonzi Nzámbe wa yǒ na motéma mwa yǒ mobimba, na molímo mwa yǒ mobimba, na mayéle ma yǒ mánso mpé na makási ma yǒ mánso. | |
Mark | LinVB | 12:31 | Mpé mobéko mwa míbalé : ólinga báníngá lokóla okomílingaka. Mobéko mosúsu molekí mibéko mîná míbalé mozalí té. » | |
Mark | LinVB | 12:32 | Motéyi wa Mobéko azóngísí : « Ezalí bôngó, Motéyi, olobí ya sôló ’te Nzámbe azalí sé yě mǒkó, mosúsu azalí té. | |
Mark | LinVB | 12:33 | Kotumbela Nzámbe nyama mpé kobonzela yě mabonza ezalí malámu. Kasi kolinga Nzámbe na motéma mobimba, na mayéle mánso mpé na makási mánso, mpé kolinga báníngá lokóla tokomílingaka, elekí malámu. » | |
Mark | LinVB | 12:34 | Yézu amóní ’te ayanólí na bwányá mpenzá, alobí na yě : « Ozalí mosíká té na Bokonzi bwa Nzámbe. » Mpé moto mǒkó té amekí lisúsu kotúna yě motúna. | |
Mark | LinVB | 12:35 | Ntángo azalákí kotéya o Témpelo, Yézu alobí : « Bóníbóní batéyi ba Mobéko bakokí koloba ’te Mesíya azalí mwána wa Davídi ? | |
Mark | LinVB | 12:36 | Davídi yě mǒkó alobáká na ngúyá ya Elímo Sántu : ‘Mokonzi Nzámbe alobí na Mokonzi wa ngáí : Fándá o lobóko la ngáí la mobáli téé nakokwêisa bangúná ba yǒ o nsé ya makolo ma yǒ.’ | |
Mark | LinVB | 12:37 | Davídi yě mǒkó abéngí yě Mokonzi, bôngó ndéngé níni akokí kozala mwána wa yě ? » Bato baíké bazalákí kosepela na boyóki yě. | |
Mark | LinVB | 12:38 | O matéya ma yě alobí na bangó : « Bókéba na batéyi ba Mobéko : balingí míngi kotámbola na bilambá bya lokúmu, balingí bato bápésa bangó losáko o zándo, | |
Mark | LinVB | 12:39 | balingí kofánda o kíti ya libosó o sinagóga mpé o bisíká bya lokúmu ntángo ya kolía. | |
Mark | LinVB | 12:40 | Bakobótoloko básí bazéngé bilóko, kasi balingí kolakisa ’te bakosámbelaka míngi. Bangó ndé bakokita o likambo, leká bato basúsu ! » | |
Mark | LinVB | 12:41 | Yézu akeí kofánda penepene na sandúku ya mabonza, mpé atálí bato bayéí kotía mosolo o sandúku. Bato ba nkita baíké batíákí mosolo míngi. | |
Mark | LinVB | 12:43 | Bôngó Yézu abéngí bayékoli ba yě, alobí na bangó : « Ya sôló, nayébísí bínó : libonza lya mwásí bozéngé óyo lilekí mabonza ma basúsu bánso batíákí mosolo o sandúku. | |
Chapter 13
Mark | LinVB | 13:1 | Ntángo Yézu abimí o Témpelo, moyékoli mǒkó alobí na yě : « Motéyi, tálá bibákátá bya mabángá ! Tálá botóngi bonéne mpenzá ! » | |
Mark | LinVB | 13:2 | Yézu alobí na yě : « Omóní botóngi boye ? Libángá lyǒ kó té likotíkala likoló lya libángá lisúsu, bínso bikobúkana nyé. » | |
Mark | LinVB | 13:3 | Yézu akeí kofánda o ngómbá ya Olíva etálání na Témpelo. Pétro, Yakóbo, Yoáne na Andréa, bobélé bangó mǒkó, batúní yě : | |
Mark | LinVB | 13:6 | Bato míngi bakoyâ o nkómbó ya ngáí, bakoloba ‘Krístu ngáí óyo’ ; bakokósa bato baíké. | |
Mark | LinVB | 13:7 | Mokolo bokoyóka nsango mpé makeléle ma bitumba, bóbánga té. Mâná mánso masengélí koyâ, kasi ekozala naíno nsúka té. | |
Mark | LinVB | 13:8 | Ya sôló, ekólo yǒ kó ekobundisa ekólo esúsu, bato ba mokili mǒkó bakobundisa mokili mosúsu, o bisíká bisúsu mokili mokoningana, mpé nzala enéne ekongala : ekozala lokóla ebandela ya mpási ya kobóta. | |
Mark | LinVB | 13:9 | Bózala na bokébi ! Bakokamba bínó o makita ma bakóló, bakobéte bínó fímbo o sinagóga, bakofúnda bínó epái ya bayángeli mpé bakonzi mpô ya ngáí, mpô ’te bósakola o míso ma bangó. | |
Mark | LinVB | 13:11 | Ntángo bakokanga mpé bakokamba bínó o esámbi, bómítungisa té na maye bokoloba, kasi bóloba bobélé maye bakolakisa bínó o ntángo êná, zambí bokoloba na mayéle ma bínó mǒkó té, kasi Elímo Sántu moto akolobisa bínó. | |
Mark | LinVB | 13:12 | Moto akokaba ndeko wa yě mpô ya koboma yě, mpé tatá akokaba mwána wa yě ; bána bakotombokela babóti mpé bakobomisa bangó. | |
Mark | LinVB | 13:13 | Bato bánso bakoyina bínó mpô ya nkómbó ya ngáí ; kasi moto akotía moléndé téé nsúka, akobíka. | |
Mark | LinVB | 13:14 | Ntángo bokomóno Eboma-Mbóka akotéleme o esíká elongóbání té, (motángi áyóka ntína ya maloba maye !) mokolo môná bato bakozala o Yudéa bákíma epái ya ngómbá, | |
Mark | LinVB | 13:19 | Mpámba té, mikolo mîná mikozala mikolo mya nsómo mpenzá, lokóla mizalákí naíno té út’o libandela, bandá Nzámbe akelá likoló na nsé kín’o leló ; mikozala mpé nsima lisúsu té. | |
Mark | LinVB | 13:20 | Sókó Mokonzi akútólákí mikolo mîná té, mbele moto mǒkó abíkí té, kasi akútólí mikolo mîná mpô ya baye yě mǒkó aponí. | |
Mark | LinVB | 13:21 | Sókó o ntángo êná bakoloba na bínó ‘Tálá, Krístu azalí áwa’, tǒ ‘Tálá yě kúná’, bóndima té. | |
Mark | LinVB | 13:22 | Mpámba té, ba-Krístu ba lokutá na baproféta ba lokutá bakobima mpé bakolakisa bilembo na makamwísi makokí kokósa atâ baye Nzámbe aponí, sókó ekokí kosálema. | |
Mark | LinVB | 13:27 | Akotínda bǎnzelú ba yě básangisa baye baponómí, bakoúta bipái bínso bya mokili, bandá nsúka ya mokili téé nsúka ya likoló. | |
Mark | LinVB | 13:28 | Bókanisa ntína ya moúlání mwa nzeté ya fígi : sókó bitápi bikómí petepete mpé nkásá ibimí, boyébí ’te eleko ya mbúla ekómí penepene. | |
Mark | LinVB | 13:29 | Sé bôngó, ntángo bokomóno makambo mâná makokwêla, bóyéba ’te Mwána wa Moto azalí koyâ, akómí penepene. | |
Mark | LinVB | 13:30 | Ya sôló sôló, nalobí na bínó : bato bazalí sikáwa ndébakúfí té libosó ’te mâná mánso máyâ. | |
Mark | LinVB | 13:32 | Moto mǒkó té ayébí mokolo môná tǒ ngonga êná, atâ bǎnzelú o likoló, atâ Mwána, bobélé Tatá yě mǒkó ayébí. | |
Mark | LinVB | 13:34 | Ekozala lokóla moto akeí mobémbo : atíkí ndáko ya yě, atíkí bínso o mabóko ma basáleli ba yě, apésí moto na moto mosálá mwa yě mpé atíndí sínzílí ákéngele ndáko malámu. | |
Mark | LinVB | 13:35 | Yangó wâná bókéngele, zambí boyébí té ntángo níni nkóló wa ndáko akoyâ : na mpókwa, o káti ya butú, na nsósó ya yambo tǒ sókó ntóngó esílí etání. | |
Chapter 14
Mark | LinVB | 14:1 | Mikolo míbalé libosó lya eyenga ya Pásiká, mokolo ba-Yúda bakolíaka mámpa mavímbí té, banganga bakonzi na batéyi ba Mobéko balukí nzelá ya kokanga Yézu na mayéle mpô ya koboma yě. | |
Mark | LinVB | 14:2 | Balobání : « Bakokí kokanga yě o mokolo mwa eyenga mpenzá té, mbele bato bakobimisa mobúlú. » | |
Mark | LinVB | 14:3 | Mokolo mǒkó Yézu azalákí o Betánia, o ndáko ya Simóni, óyo azalákí na maba. Ntángo afándí o méza, mwásí mǒkó ayéí na molangi mwa mbélé mwa malási ma motúya monéne. Afungólí molangi mpé asopí malási o motó mwa Yézu. | |
Mark | LinVB | 14:4 | Kasi o ntéi ya bato bazalákí wâná basúsu bayókí mabé, balobání : « Mpô níni kobébisa malási boye ? | |
Mark | LinVB | 14:5 | Bakokákí kotéke mangó na denário nkámá ísáto mpé kopésa babóla mosolo mwangó. » Bapálélí mwásí. | |
Mark | LinVB | 14:7 | Babóla bakozala na bínó ntángo ínso, mpé bokokí kosála bangó malámu mokolo bolingí. Kasi ngáí nakozala na bínó ntángo ínso té. | |
Mark | LinVB | 14:8 | Asálí lokóla ekokí ; asílí apakólí nzóto ya ngáí malási mpô ya mokolo bakokunda ngáí. | |
Mark | LinVB | 14:9 | Ya sôló sôló, nalobí na bínó : bipái bínso bakosangela Nsango Elámu o mokili mobimba, bakokanisa yě mpé bakoloba likambo asálí ngáí sikáwa. » | |
Mark | LinVB | 14:10 | Yudási Iskariote, mǒkó wa ba-zómi na bábalé, akeí epái ya banganga bakonzi mpô ya kokaba Yézu o mabóko ma bangó. | |
Mark | LinVB | 14:11 | Ntángo bayókí yangó, basepélí mpé balakélí yě ’te bakopésa yě mosolo. Yangó wâná abandí koluka nzelá ya kokaba yě. | |
Mark | LinVB | 14:12 | Ekómí mokolo mwa libosó mwa mikolo bakolíaka mámpa mavímbí té mpé bakobomaka mpatá ya Pásiká, bayékoli balobí na Yézu : « O esíká níni olingí tókende kolámba limpáti lya Pásiká, mpô ’te ólía lyangó ? » | |
Mark | LinVB | 14:13 | Atíndí bayékoli bábalé, alobí na bangó : « Bóyíngela o engumbá, bokozwana na moto mǒkó amemí mbéki ya mái. Bólanda yě ; | |
Mark | LinVB | 14:14 | esíká akokóto, bóloba na nkóló wa ndáko : ‘Motéyi atúní : Wápi esíká nakokí kolía limpáti lya Pásiká elongó na bayékoli ba ngáí ?’ | |
Mark | LinVB | 14:15 | Akolakisa bínó eténi enéne o mokili mwa ndáko, eye babongísí malámu ; bólámbela bísó bilóko bya kolía kúná. » | |
Mark | LinVB | 14:16 | Bayékoli bakeí, bayíngélí o engumbá, bakútí mánso sé lokóla Yézu alobákí na bangó mpé balámbí limpáti lya Pásiká. | |
Mark | LinVB | 14:18 | Ntángo bazalákí kolía o méza, Yézu alobí : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : mǒkó wa bínó akokaba ngáí, azalí kolía na ngáí elongó. » | |
Mark | LinVB | 14:20 | Yézu azóngísí : « Ezalí mǒkó wa ba-zómi na bábalé, óyo ngai na yě tokotía lobóko o sǎ ni yǒ kó. | |
Mark | LinVB | 14:21 | Sôlo, Mwána wa Moto akokende lokóla ekomámí mpô ya yě ; kasi mawa na moto óyo akokaba yě ! Elekí malámu sókó abótámákí té ! » | |
Mark | LinVB | 14:22 | Ntángo bazalákí kolía, Yézu akamátí límpa, asámbélí losámbo la bobenisi, abúkí lyangó, apésí bangó, alobí : « Kamátáni, eye ezalí nzóto ya ngáí. » | |
Mark | LinVB | 14:24 | Alobí na bangó : « Eye ezalí makilá ma ngáí, makilá ma bondeko, makosopana mpô ya bato ebelé. | |
Mark | LinVB | 14:25 | Ya sôló sôló, nalobí na bínó : nakomele víno lisúsu té kín’o mokolo nakomele víno ya sika o Bokonzi bwa Nzámbe. » | |
Mark | LinVB | 14:27 | Yézu alobí na bangó : « Bínó bánso bokotuta libaku mpô na ngáí, zambí ekomámí ’te : Nakobéte mokéngeli mpé mpatá ikopanzana. | |
Mark | LinVB | 14:30 | Yézu ayanólí : « Nalobí na yǒ ya sôló : Lelóméí na butú, naíno nsósó elelí mbala íbalé té, ndôsílí kowángana ngáí mbala ísáto. » | |
Mark | LinVB | 14:31 | Kasi Pétro abétí ntólo : « Atâ nasengélí kowá na yǒ elongó, nakowángana yǒ té. » Bangó bánso balobí bobélé bôngó. | |
Mark | LinVB | 14:32 | Bakómí o esíká bakobéngaka Getsémani. Yézu alobí na bayékoli ba yě : « Bótíkala áwa ntángo nakosámbela. » | |
Mark | LinVB | 14:33 | Akamátí Pétro, Yakóbo na Yoáne bákende na yě ; abandí koyóka mawa mpé nsómo o motéma. | |
Mark | LinVB | 14:34 | Alobí na bangó : « Nayókí mawa míngi lokóla nalingí nákúfa. Bótíkala áwa mpé bókéngele. » | |
Mark | LinVB | 14:35 | Apúsání mwâ moké, amíbwákí o mabelé mpé abóndélí Nzámbe ’te ngonga eye ya mpási élongwa mosíká na yě, sókó ekokí kosálema. | |
Mark | LinVB | 14:36 | Alobí : « Aba (lokóla ’te : Tatá wa bolingo), okokí kosála mánso ; longólá nkéni eye ya mpási, nzókandé ésálema té lokóla ngáí nalingí, kasi sé lokóla yǒ olingí ! » | |
Mark | LinVB | 14:37 | Azóngí mpé akútí bayékoli bazalákí kolála mpongí ; alobí na Pétro : « Simóni, olálí ? Ozalí na makási ma kokéngele atâ ngonga yǒkó té ? | |
Mark | LinVB | 14:38 | Bókéngele mpé bósámbela mpô ’te bóndima masénginyá té. Atâ moto azalí na mpíkó, nzóto ya yě ekolembeke. » | |
Mark | LinVB | 14:40 | Azóngí lisúsu mpé akútí bangó balálí, zambí míso ma bangó malembí na mpongí. Bazalákí na liloba lya kozóngisela yě té. | |
Mark | LinVB | 14:41 | Mbala ya ísáto azóngí mpé alobí na bangó : « Sikáwa bokokí kolála mpé kopéma. Esílí, elaká ekokí : sikáwa bakokaba Mwána wa Moto o mabóko ma basúmuki. | |
Mark | LinVB | 14:43 | Ezalákí yě naíno koloba, Yudási, mǒkó wa ba-zómi na bábalé, ayéí elongó na bato míngi bazalákí na mimpánga mpé na mángénda o mabóko. Banganga bakonzi, batéyi ba Mobéko na bakóló batíndákí bangó. | |
Mark | LinVB | 14:44 | Mosúli ayókání na bangó boye : « Oyo nakozínga ekópi, yě wâná ; bókanga yě, bókéngele yě malámu ntángo bokokende na yě. » | |
Mark | LinVB | 14:47 | Mǒkó wa baye batélémí wâná abimísí mompánga, abétí mosáleli wa nganga mokonzi, mpé akátí yě litói. | |
Mark | LinVB | 14:48 | Yézu alobí na bangó : « Nazalí ndé moyíbi ’te bóyá na mimpánga mpé na mángénda mpô ya kokanga ngáí ? | |
Mark | LinVB | 14:49 | Mikolo mínso nazalákí na bínó kotéya o Témpelo, mpé bokangákí ngáí té. Kasi esengélákí kosálema bôngó mpô ya kokokisa maye makomámí o Minkandá. » | |
Mark | LinVB | 14:53 | Bakeí na Yézu epái ya nganga mokonzi ; banganga bakonzi bánso na bakóló na batéyi ba Mobéko basangání likita. | |
Mark | LinVB | 14:54 | Pétro alandí yě mwâ mosíká téé o lopángo la nganga mokonzi, afándí wâná elongó na basáli, azalákí koyóta móto. | |
Mark | LinVB | 14:55 | Banganga bakonzi na bato bánso ba Likita linéne balukí bato bákoka kofúnda Yézu mpô ’te bákitisa yě o liwá : kási bazwí atâ moto mǒkó té. | |
Mark | LinVB | 14:58 | « Biso moko toyókákí yě azalákí koloba ’te : Nakoboma Témpelo eye esálémí na mabóko ma bato ; na mikolo mísáto nakotónga Témpelo esúsu esálémí na mabóko ma bato té. » | |
Mark | LinVB | 14:60 | Nganga mokonzi atélémí o káti ya likita, atúní Yézu : « Okozóngisa liloba lyǒkó té ? Bato baye bafúndí yǒ na likambo níni ? » | |
Mark | LinVB | 14:61 | Kasi yě akangí monoko, azóngísí liloba té. Nganga mokonzi atúní yě lisúsu ; « Ozalí ndé Mesíya, Mwána wa Mobenemi ? » | |
Mark | LinVB | 14:62 | Yézu ayanólí : « Ezalí ngáí ! Bokomóno Mwána wa Moto akofánda o lobóko la mobáli la Oyo alekí na Ngúyá, mpé akoyâ o mampata ma likoló. » | |
Mark | LinVB | 14:63 | O ntángo êná nganga mokonzi apasólí monkóto mwa yě, alobí : « Ntína níni tóluka lisúsu banzénénéké ? | |
Mark | LinVB | 14:65 | Basúsu babandí kobwákela yě nsóí, kozipa yě míso na elambá, kobéte yě mbatá mpé koloba : « Proféta, lobá : Náni abétí yǒ ? » Basáli mpé babétí yě míngi. | |
Mark | LinVB | 14:67 | Ntángo amóní Pétro azalákí koyóto móto, atálí yě malámu, alobí : « Yǒ mpé ozalákí na Yézu wa Nazaréte ! » | |
Mark | LinVB | 14:68 | Kasi Pétro awángání, alobí : « Nayébí té, nayókí ntína ya maloba ma yǒ té. » Na nsima abimí mpé akeí epái ya monoko mwa lopángo. Nsósó elelí. | |
Mark | LinVB | 14:69 | Ntángo mosáli mwásí óyo amóní yě lisúsu, alobí lisúsu na bato bazalákí wâná : « Moto óyo azalí mǒkó wa bangó ! » | |
Mark | LinVB | 14:70 | Kasi Pétro awángání lisúsu. Mwâ moké nsima, bato batélémí wâná balobí na Pétro : « Ya sôló, ozalí mǒkó wa bangó zambi ozali mo-Galiléa ? » | |
Mark | LinVB | 14:71 | Kasi Pétro abandí kolaya ndaí makási makási, alobí : « Moto óyo bozalí kotánga, nayébí yě té. » | |
Chapter 15
Mark | LinVB | 15:1 | Na ntóngó mpenzá banganga bakonzi basangání likita elongó na bakóló, batéyi ba Mobéko mpé bato bánso ba Likita linéne. Bakangí Yézu monyolólo o mabóko, bakeí na yě mpé bakabí yě o mabóko ma Piláto. | |
Mark | LinVB | 15:4 | Piláto atúní yě lisúsu : « Okozóngisa liloba té ? Yóká makambo mánso bazalí kofúnda yǒ na mangó ! » | |
Mark | LinVB | 15:6 | Mobú na mobú o eyenga ya Pásiká, Piláto azalákí kobimisa moto wa bolóko, óyo bato balingí. | |
Mark | LinVB | 15:7 | O mikolo mîná moto mǒkó nkómbó ’te Báraba azalákí o bolóko. Bakangákí yě elongó na batomboki ; babomákí moto mǒkó ntángo mobúlú mobimákí. | |
Mark | LinVB | 15:12 | Piláto atúní bangó lisúsu : « Bôngó násála níni na óyo bokobéngaka mokonzi wa ba-Yúda ? » | |
Mark | LinVB | 15:14 | Piláto alobí : « Mabé níni asálí ? » Kasi bangó baléndísí kogánga : « Báká yě o kurúse ! » | |
Mark | LinVB | 15:15 | Mpô ya kondimela bato, Piláto abimísélí bangó Báraba ; kasi abétísí Yézu fímbo, mpé atíndí ’te bábáka yě o kurúse. | |
Mark | LinVB | 15:16 | Basodá bakeí na yě o lopángo o káti ya ndáko ya moyángeli mpé babéngí basodá bánso. | |
Mark | LinVB | 15:17 | Balátísí Yézu elambá ya lángi ya longóndo ; balití ekáta ya nzúbe, batíí yangó o motó mwa yě. | |
Mark | LinVB | 15:19 | Babétí yě na nkékélé o motó, babwákélí yě nsóí, bafukámélí yě lokóla balingí kokúmisa yě. | |
Mark | LinVB | 15:20 | Awa basílísí kosekeseke yě, balongólí yě elambá ya lángi ya longóndo, bazóngísélí yě bilambá bya yě. | |
Mark | LinVB | 15:21 | Moto mǒkó alekí wâná, nkómbó ya yě Simóni wa Siréne, tatá wa Alesándro na Rúfo, aútí o bilanga. Basengísí yě na makasi ’te ámeme kurúse ya Yézu. | |
Mark | LinVB | 15:24 | Nsima yangó babákí yě o kurúse mpé bakabólání bilambá bya yě na bobéti zeké, bôngó moto na moto ázwa elambá yǒkó. | |
Mark | LinVB | 15:27 | Elongó na yě babákí mpé bayíbi banéne bábalé o kurúse, mǒkó o lobóko la yě la mobáli, mosúsu o lobóko la yě la mwásí. ( | |
Mark | LinVB | 15:29 | Bato balekí wâná bafíngí yě, baningísí mitó, balobí : « E, yǒ moto okobúka Témpelo mpé okotónga yangó lisúsu na mikolo mísáto, | |
Mark | LinVB | 15:31 | Sé bôngó banganga bakonzi na batéyi ba Mobéko batiólí yě, balobání : « Abíkísí bato basúsu, akokí komíbíkisa té ! | |
Mark | LinVB | 15:32 | Yé Mesíya, mokonzi wa Israél, álongwa o kurúse sikáwa, tómóno yangó mpé tóyamba yě ! » Atâ baye babákémí o kurúse elongó na yě bafíngí yě. | |
Mark | LinVB | 15:34 | O ngonga ya ísáto Yézu agángí makási : « Eloï, Eloï, láma sabaktáni », lokóla ’te : « Nzámbe wa ngáí, Nzámbe wa ngáí, mpô níni otíkí ngáí ? » | |
Mark | LinVB | 15:36 | Moto mǒkó akeí mbángu, atíí linyuká o masanga ngai, akangí lyangó o nsóngé ya nkékélé, apésí yě ámele, alobí : « Tótála sókó Elía akoyâ kolongola yě o kurúse ! » | |
Mark | LinVB | 15:38 | O ntángo êná elambá enéne ya Témpelo epaswání na biténi bíbalé út’o likoló téé o nsé. | |
Mark | LinVB | 15:39 | Komandá wa basodá óyo atélémí o bosó bwa Yézu amóní ’te akátí motéma, agángí : « Sôló, moto óyo azalákí Mwána wa Nzámbe ! » | |
Mark | LinVB | 15:40 | Básí mpé bazalákí kotála mwâ mosíká. O ntéi ya bangó María wa Mágdala, na María mamá wa Yakóbo moké mpé wa Yozé, ná mpé Salomé. | |
Mark | LinVB | 15:41 | Bangó bazalákí kolanda Yézu mpé kosálela yě ntángo azalákí o Galiléa ; básí basúsu míngi bazalákí mpé wâná, baye bayákí elongó na Yézu o Yerúzalem. | |
Mark | LinVB | 15:43 | Yozéfu wa Arimatéa, mǒkó wa bankúmú ba Likita linéne, atíí moléndé mpé akeí kosénge Piláto nzóto ya Yézu. Azalákí kotía elíkyá na boyéi bwa Bokonzi bwa Nzámbe. | |
Mark | LinVB | 15:44 | Piláto akámwí ’te Yézu asílí akúfí, abéngí komandá wa basodá, atúní yě sókó Yézu akátí motéma sôló. | |
Mark | LinVB | 15:46 | Yozéfu alongólí Yézu o kurúse, azíngí yě na elambá asómbákí, mpé alálísí yě o lilíta bakátákí o mabángá. Nsima yangó apúsí libángá o bosó bwa monoko mwa lilíta. | |
Chapter 16
Mark | LinVB | 16:1 | Elekí mokolo mwa sábato, María wa Mágdala, María mamá wa Yakóbo ná mpé Salomé basómbí malási mpô ’te bákende kopakola nzóto ya Yézu. | |
Mark | LinVB | 16:4 | Bátómbola míso, bamóní ’te libángá lisílí lilongwí ; ezalákí libángá linéne mpenzá. | |
Mark | LinVB | 16:5 | Bakótí o lilíta, bamóní elengé mobáli afándí o lobóko la mobáli, alátí elambá mpémbé ; bayókí nsómo mpenzá. | |
Mark | LinVB | 16:6 | Kasi alobí na bangó : « Bóbánga té ; bozalí koluka Yézu wa Nazaréte óyo babákákí o kurúse ; asílí asékwí, azalí áwa té. Táláni esíká batíákí yě. | |
Mark | LinVB | 16:7 | Bókende koyébisa bayékoli ba yě na Pétro ’te azalí kokende libosó lya bínó o Galiléa ; bokomóno yě kúná, lokóla alobákí na bínó. » | |
Mark | LinVB | 16:8 | Babimí o lilíta mpé bakímí, mpô bayókí nsómo mpé babángí míngi. Bayébísí yangó na moto mǒkó té, mpô bazalákí kobánga. | |
Mark | LinVB | 16:9 | Awa Yézu asékwí mokolo nsima ya sábato na ntóngó, abimélí libosó María wa Mágdala, óyo abengánákí bazábolo nsambo o nzóto ya yě. | |
Mark | LinVB | 16:12 | Nsima yangó Yézu abimélí bato bábalé bazalákí kokende o mbóka yǒkó ; amónónókí lokóla moto mosúsu. | |
Mark | LinVB | 16:13 | Bangó bazóngí mpô ya koyébisa yangó na báníngá ; kasi bandimí maloba ma bangó mpé té. | |
Mark | LinVB | 16:14 | Na nsúka Yézu abimélí ba-zómi na mǒkó ntángo bazalákí kolía ; apálélí bangó mpô bayambákí té, bazalákí sé kotía ntembe mpé babóyákí kondima maloba ma baye bamónókí yě nsima ya nsékwa ya yě. | |
Mark | LinVB | 16:16 | Moto akoyamba mpé akokúla batísimo, akobíka ; kasi moto akoyamba té, akokita o likambo. | |
Mark | LinVB | 16:17 | Tala makamwísi makolanda bato bakoyamba : o nkómbó ya ngáí bakobengana bazábolo, bakoloba nkóta ya bikólo bisúsu ; | |
Mark | LinVB | 16:18 | bakokanga nyóka na mabóko ; sókó bamelí ngenge, ekosála bangó elóko té ; bakotíela bato ba bokono mabóko mpé bakokóma nzóto kólóngónú. » | |
Mark | LinVB | 16:19 | Awa Mokonzi Yézu asílísí koloba bôngó, atómbwámí o likoló, akeí kofánda o lobóko la mobáli la Nzámbe. | |