Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I SAMUEL
Up
Chapter 1
I Sa LinVB 1:1  Ezalaki moto moko wa mboka Ramataim, moto wa Suf, o ngo­mba ya Efraim, nkombo ya ye Elkana, mwana wa Yeroam, nkoko wa Eliu, oyo Toku abotaki, ye mwana wa Suf wa Efrata.
I Sa LinVB 1:2  Azalaki na basi babale, Ana na Penina. Penina abotaki bana, Ana te.
I Sa LinVB 1:3  Mobu na mobu Elkana azalaki kotika mboka ya ye mpo ya kosambela Yawe wa bokasi bonso mpe kobonzela ye miboma o Silo, esika bana babali babale ba Eli, Ofni na Pinekas, bazalaki kosala mosala mwa nganga Nzambe.
I Sa LinVB 1:4  Mokolo moko Elkana abonzi libonza, ameseni kokabela biteni bya libonza na mwasi wa ye Penina mpe na bana ba ye babali na basi.
I Sa LinVB 1:5  Azalaki kobakisela Ana eteni esusu, zambi apusi kolinga ye, ata Yawe apesi ye bana te.
I Sa LinVB 1:6  Mbanda wa ye azalaki kotumola ye mpo ya koyokisa ye nka­nda, zambi Yawe akangaki libumu lya ye.
I Sa LinVB 1:7  Mobu na mobu, ntango bazalaki kokende o Tempelo ya Yawe, mbanda wa ye azalaki kotumola ye, bongo Ana abandi kolela mpe aboyi kolia.
I Sa LinVB 1:8  Mobali wa ye atuni ye : « Ana, ozali kolela ntina nini ? Mpo nini oli­ngi kolia te mpe ozali koyoka mawa ? Ata ozalaki na bana zomi, ngai naleki bango te ? »
I Sa LinVB 1:9  Awa basilisi kolia, Ana akei kosa-mbela o ndako ya Yawe. Nganga Nza­mbe Eli afandi o kiti penepene na ezibeli ya ndako ya Yawe.
I Sa LinVB 1:10  Na mawa manene o motema, Ana asambeli Yawe mpe aleli mingi.
I Sa LinVB 1:11  Alakeli elako eye : « E Yawe wa mampinga, soko olingi, otala mpasi ya mosaleli wa yo ; okanisa ngai mpe obosana ngai mosaleli wa yo te. Soko olingi kopesa ngai mwana mobali, nakobonza ye na Yawe, asalela ye bomoi bwa ye mobi­mba ; bakokola ye motó mokolo moko te. »
I Sa LinVB 1:12  Mokolo Ana aumeli kosambela Yawe, Eli azalaki kotala monoko mwa ye,
I Sa LinVB 1:13  mpo ata azalaki koloba na monoko, mongongo mwa ye moyokani te. Eli akanisi ’te alangwi.
I Sa LinVB 1:14  Ya­ngo wana alobi : « Yo okolangwa tee ntango nini ? Kende kolala. »
I Sa LinVB 1:15  Kasi Ana azongisi : « Ezali bongo te, mokonzi, nameli vino to masanga makasi te ; nayei kobondela Yawe, zambi nayoki motema mpasi.
I Sa LinVB 1:16  Otala mosaleli wa yo lokola moto mpamba te, naumisi losambo tee sikawa zambi mawa na mpasi ya ngai ileki. »
I Sa LinVB 1:17  Eli alobi na ye : « Kende na boboto ; Nza­mbe wa Israel apesa yo eloko eye osengi ye. »
I Sa LinVB 1:18  Ana azongisi : « Ngai mo­saleli wa yo, nazwa bolamu o miso ma yo. » Bongo akei mpe abandi kolia ; elongi ya ye ebongwani.
I Sa LinVB 1:19  Batelemi na nta ntongo, bakei kokumisa Yawe ; na nsima bazongi o mbo­ka ya bango Rama. Elkana ayebani na mwasi wa ye Ana, mpe Yawe andimeli ye.
I Sa LinVB 1:20  Ana azwi zemi mpe aboti mwana mobali. Apesi ye nko­mbo Samuel, zambi alobi : « Nasengeki ye epai ya Yawe. »
I Sa LinVB 1:21  Mobali wa ye Elkana akei elongo na libota lya ye mobimba kobonzela Yawe libonza liye bakobonzaka mobu na mobu ; akei kokokisa elako ya ye.
I Sa LinVB 1:22  Kasi Ana akei te. Alobi na mobali wa ye : « Nakokende bobele soko mwana atiki mabéle. Na nsima nakokende na ye ; nako­lakisa ye na Yawe mpe ye akotikala wana libela. »
I Sa LinVB 1:23  Mobali wa ye Elkana alobi na ye : « Sala lokola olingi mpe zila tee mokolo mwana akotika mabéle. Yawe asala lokola alobaki. » Bongo mwasi atikali o ndako, akolisi mwana tee mokolo alongoli ye o mabéle.
I Sa LinVB 1:24  Mokolo mwana atiki mabéle, Ana akei na ye, akamati ngombe mobali ya mbula isato, ngoto ya fufu na mbeki ya vino. Akei kotika Samuel o ndako ya Yawe o Silo. Samuel azalaki naino elenge.
I Sa LinVB 1:25  Babomi ngombe, mpe bakei na mwana wa ye epai ya Eli.
I Sa LinVB 1:26  Ana alobi : « Nabondeli yo, mokonzi, ngai nazali mwasi oyo atelemeki awa penepene na yo ntango nazalaki kosambela Yawe.
I Sa LinVB 1:27  Nasengeki Yawe mwana, mpe Yawe apesi ngai mwana oyo.
I Sa LinVB 1:28  Sikawa nayei kotika ye o maboko ma Yawe seko. Bomoi bwa ye mobimba akabama na Yawe. » Mpe bakumbameli Yawe wana.
Chapter 2
I Sa LinVB 2:1  Ana asambeli boye : « Motema mwa ngai motondi na esengo mpo ya Yawe, nakoki kotombola motó mpo ya Nzambe, nafungoli monoko mpo naseke banguna ba ngai, zambi nayoki esengo awa osalisi ngai.
I Sa LinVB 2:2  Mosantu lokola Yawe azali te, za­mbi bobele yo ozali mosantu. Moko te azali na bokasi lokola Nzambe wa biso.
I Sa LinVB 2:3  Botika bilobela bya lolendo, maloba ma lofundo mabima o monoko mwa bino te. Yawe azali Nzambe ayebi manso, ye moto akomekaka misala minso malamu.
I Sa LinVB 2:4  Ye moto abuki litimbo lya bato banene, alendisi baye bazangi bokasi.
I Sa LinVB 2:5  Baye bazalaki kolia malamu bakomi koluka mosala mpo ’te bazwa ma­mpa ; baye bazalaki kokufa na nzala, bakomi kotika mosala mpo ’te bapema. Mwasi abotaki liboso te akomi kobota mbala nsambo, kasi mama aboti bana mingi anuni.
I Sa LinVB 2:6  Yawe azali mokonzi wa liwa mpe wa bomoi, ye moko akotinda bato o mboka ya bawa to akobimisa bango.
I Sa LinVB 2:7  Yawe akokomisa mosusu mobola, mosusu moto wa nkita, ye moko akokitisa bato mpe akotombola ba­ngo.
I Sa LinVB 2:8  Akolongola mobola o mabelé esika alali, akotelemisa moto afandi o esika bakobwakaka matiti. Akofandisa bango esika yoko na bankumu, mpe akopesa bango kiti o esika ya lokumu, zambi Yawe apiki makonzi ma nse mpe abaki mokili likolo lya ma­ngo.
I Sa LinVB 2:9  Akobatela bato bakokumisaka ye o nzela ya bango, kasi bato babe bakobunga o kati ya molili, zambi mo­to akobika na bokasi bwa ye mo­ko te.
I Sa LinVB 2:10  Yawe akosilisa bokasi bwa banguna ba ye, Nzambe wa likolo akobetisa nkake ya ye. Yawe akosambisa bato ba mokili mobimba ; akolendisa moto oyo ye alubolaki mokonzi, akokumisa Oyo ye apakoli mafuta. »
I Sa LinVB 2:11  Elkana azongi o Rama o ndako ya ye, kasi mwana atikali mpo ’te asalela Yawe o miso ma nganga Nza­mbe Eli.
I Sa LinVB 2:12  Bana ba Eli bazalaki bana mabe mpenza ; bazalaki komemya Yawe te.
I Sa LinVB 2:13  Awa bazalaki banganga Nzambe, bazalaki kosala bato boye : Soko moto ayei na libonza, mosali wa nga­nga Nzambe ayei o ntango balingi kolamba nyama, na nkanya ya mino misato o loboko.
I Sa LinVB 2:14  Apiki nkanya o sani to lisasu to nzungu to mbeki, mpe misuni minso akangi bongo na nkanya ya ye, nganga Nzambe akamati myango. Bazalaki kosala bongo na ba-Israel banso baye bayei na mabonza o Silo.
I Sa LinVB 2:15  Mpe, ata bakalingi naino mafuta te, mosali wa nganga Nzambe ayei mpe alobi na moto ayei kobonza libonza : « Pesa nyama ya ko­tumba mpo ya nganga Nzambe. » Akondima te ’te opesa ye nyama esili elambami, alingi se mosuni mobesu.
I Sa LinVB 2:16  Mpe soko moto alobi na ye : « Malamu bakalinga liboso mafuta, nsima okoki kokamata binso yo oli­ngi », ye mosali wa nganga Nzambe azalaki kopesa eyano eye : « Te, okopesa yango sikasikawa, soki te nakokamata yango na makasi. »
I Sa LinVB 2:17  Lisumu lya bilenge lileki na bonene o miso ma Yawe, zambi bazalaki kosantola mabonza mapesami na Yawe.
I Sa LinVB 2:18  Samuel azalaki kosala mosala o miso ma Yawe. Ezalaki ye naino mwana, asili kolata efod, elamba ba­nganga Nzambe bakolataka, elamba ya malekani.
I Sa LinVB 2:19  Mama wa ye asoneli ye mwa monkoto, mpe akei kopesa ye mwango ntango azalaki kokende elongo na mobali wa ye, mpo ya kobonzela Yawe libonza liye bakobo-nzelaka mobu na mobu.
I Sa LinVB 2:20  Eli abenisi Elkana na mwasi wa ye, alobi : « Yawe akabela mwasi oyo bana basusu, awa asili kobonzela Yawe mwana moko. » Na nsima bango babale bazongi o mboka.
I Sa LinVB 2:21  Mpe ya solo, Yawe akanisi Ana : azwi zemi mpe aboti bana, babali basato na basi babale. Mpe Samuel moke akoli o miso ma Yawe.
I Sa LinVB 2:22  Eli akomi mobange mpenza. Azalaki koyoka epai ya bato mabe manso bana ba ye bazalaki kosala bato ba Israel, mpe ndenge nini bazalaki kota­mbola na basi bakosalaka mosala o monoko mwa Ema ya Likita.
I Sa LinVB 2:23  Eli atuni bango : « Mpo nini bozali kosala bongo ? Nazali koyoka yango na bato banso.
I Sa LinVB 2:24  Te, bana ba ngai, ma­ye nazali koyoka mazali malamu soki te. Bokobendaka bato ba ekolo ya Yawe o nzela ya masumu.
I Sa LinVB 2:25  Soko moto asali moninga wa ye mabe, Nza­mbe akoki kobikisa ye ; kasi soko moto asali Yawe mabe, nani akobikisa ye ? » Kasi bayoki monoko mwa tata wa bango te. Yango wana Yawe akani koboma bango.
I Sa LinVB 2:26  Samuel moke akoli, akomi mokóló mpe nzoto kitoko o miso ma Yawe mpe ma bato.
I Sa LinVB 2:27  Moto moko wa Nzambe ayei epai ya Eli, alobi na ye : « Yawe alobi boye : Namiyebisaki na bato ba libota lya nkoko wa yo o ntango bazalaki baombo ba Farao o Ezipeti.
I Sa LinVB 2:28  O kati ya mabota manso ma Israel naponoki nkoko wa yo azala nganga Nzambe wa ngai, abeleme na altare ya ngai, atumba mpaka ya malasi mpe alata efod o miso ma ngai. Natikelaki bato ba libota lya yo biloko binso bana ba Israel bakobonzelaka ngai.
I Sa LinVB 2:29  Mpo nini ozali kosantola miboma na mabonza, maye natindaki ’te babonza mango o Ndako ya ngai ? Mpo nini kati ya ngai na bana ba yo, opusi kondima bana ba yo ? Okoleisa bango na biloko bileki elengi, biye bana ba Israel bazali kobonzela ngai.
I Sa LinVB 2:30  Yango wana Yawe, Nzambe wa Israel, alobi : Solo, nalobaki ’te bana ba yo na bana ba libota lya nkoko wa yo bakotambola o miso ma ngai seko ; kasi sikawa ekozala lisusu bongo te, mpo ngai nakokumisa baye bakumisi ngai mpe baye bakinoli ngai nakotala bango mpamba. Yawe alobi bongo.
I Sa LinVB 2:31  Tala, mikolo mizali koya nakosilisa bokasi bwa yo mpe bwa bato ba libota lya nkoko wa yo. Mobange moko akomonono lisusu o libota lya yo te.
I Sa LinVB 2:32  Okomono moto mosusu penepene na ndako ya ngai, okomono malamu manso ye akosala bato ba Israel ; kasi o libota lya yo, moto moko akokoma lisusu mobange te.
I Sa LinVB 2:33  Nakobomba mo­to moko wa libota lya yo penepene na altare ya ngai mpo ’te alembisa miso ma yo mpe ayokisa yo motema mpasi. Kasi bato banso ba libota lya yo bakokufa na mopanga.
I Sa LinVB 2:34  Makambo maye makokwela bana ba yo babale Ofni na Pinekas makozalela yo elembo ya maye nalobi. Bango babale bakokufa se o mokolo moko.
I Sa LinVB 2:35  Nakopono nganga Nzambe wa botosi, moto akosala lokola motema mwa ngai motindi ; nakosala ’te libota lya ye litikala seko mpe lita­mbola ntango inso o miso ma Mesya wa ngai.
I Sa LinVB 2:36  Mpe soko moko wa ba­ndeko ba yo akotikala naino, akoya kokumbamela ye mpo azwa ata mwa mosolo to eteni ya limpa, mpe akoloba : Nabondeli yo, ndima ngai o mosala ata nini mwa bonganga bwa yo, nazwa bongo mwa limpa, nalia. »
Chapter 3
I Sa LinVB 3:1  Elenge Samuel azalaki kosala mosala o ndako esantu ya Yawe o miso Eli. O eleko ena Yawe azalaki koloba na bato mingi te, amilakisi se mbala yoko na yoko.
I Sa LinVB 3:2  Mokolo moko Eli alali o ndako ya ye. Miso ma ye mabandi kolembe, azalaki komono lisusu malamu te.
I Sa LinVB 3:3  Mwinda mwa Nzambe mozalaki naino kopela nta­ngo Samuel azalaki kolala o ndako esantu ya Yawe, penepene na Sandu­ku ya Bondeko bwa Nzambe.
I Sa LinVB 3:4  Yawe abengi ye : « Samuel, Samuel ! » Oyo andimi : « Ngai oyo ! »
I Sa LinVB 3:5  Akei mbangu epai ya Eli, alobi : « Ngai oyo, obengi ngai ? » Eli azongisi : « Nabengi yo te, zonga mpe kende kolala. » Samuel azo­ngi.
I Sa LinVB 3:6  Yawe abengi lisusu : « Samuel ! Samuel ! » Samuel akei epai ya Eli, alobi : « Ngai oyo, yo moto obe-ngi ngai ? » Eli alobi : « Nabengi yo te, mwana, zonga mpe kende kolala. »
I Sa LinVB 3:7  Samuel ayebi Yawe naino te, bayebisi ye naino liloba lya Yawe te.
I Sa LinVB 3:8  Mbala ya isato Yawe abengi Samuel. Samuel atelemi mpe akei epai ya Eli, alobi : « Ngai oyo, yo moto obengi ngai. » Sikawa Eli ayebi ’te Yawe moto azalaki kobenga mwana.
I Sa LinVB 3:9  Alobi na Samuel : « Kende kolala, mpe soko abengi yo lisusu, oloba : Loba, Yawe, mosaleli wa yo azali koyoka. » Mpe Samuel azo­ngi o esika ya ye ya kolala.
I Sa LinVB 3:10  Yawe ayei koteleme penepene na ye ; abengi ye se lokola mbala ya liboso : « Samuel, Samuel ! » Samuel azo­ngisi : « Loba, mosaleli wa yo azali koyo­ka. »
I Sa LinVB 3:11  Sikawa Yawe alobi na Samuel : « Etikali moke nasala likambo linene o ekolo Israel, likoyokisa bato mpasi o matoi. Nsango bakoyoka na matoi ekoyokisa bango mpasi.
I Sa LinVB 3:12  Mokolo mona ndenakokisi makambo ma mpasi manso nakanelaki libota lya Eli.
I Sa LinVB 3:13  Okoyebisa ye ’te nabwaki libota lya ye seko. Mpamba te, ayebaki ’te bana ba ye bakinolaki Nza­mbe, mpe apesaki bango etumbu te.
I Sa LinVB 3:14  Yango wana, nalobi ya solo : Ata babomi nyama to babonzeli ngai mabo­nza masusu, eloko yoko ekoki kolo­ngola masumu ma bana ba Eli lisusu te. »
I Sa LinVB 3:15  Samuel azongi kolala mpongi. Na ntongo akei kofungola bizibeli bya Tempelo ya Yawe. Abangi koyebisa Eli limoni liye.
I Sa LinVB 3:16  Kasi Eli abengi ye, alobi : « Samuel, yaka. » Samuel andimi : « Ngai oyo ! »
I Sa LinVB 3:17  Eli atuni ye : « Yawe alobi na yo nini ? Obombela ngai eloko te. Soko obombeli ngai ata liloba lyoko, Yawe asala yo mabe, mpe aba­kisela yo naino mabe masusu. »
I Sa LinVB 3:18  Bo­ngo Samuel ayebisi ye maloba manso, abombeli ye eloko te. Eli alobi : « A­zali Yawe, asala manso lokola alingi. »
I Sa LinVB 3:19  Samuel akoli. Yawe azalaki na ye mpe akokisi manso alobaki na ye.
I Sa LinVB 3:20  Bato banso ba Israel, banda Dan tee Berseba, bayebi ’te Samuel akomi profeta wa Yawe.
I Sa LinVB 3:21  Yawe akobi komilakisa o mboka Silo, esika amiyebisi na Samuel.
Chapter 4
I Sa LinVB 4:1  Ba-Israel banso bakomi koyeba maloba ma Samuel. O mikolo mina ba-Filisti basangani mpo bakende kobundisa ba-Israel, mpe bato ba Israel babimi mpo ’te bakutana na bango mpo ya etumba, bapiki nganda penepene na mboka Eben-Azar, ba-Filisti basali ya bango o mboka Afek.
I Sa LinVB 4:2  Ba-Filisti bamibo­ngisi mpo ya kobuna na ba-Israel. Etumba enene ebandi. Bakweisi ba-Israel mpe babomi basoda soki nkoto inei.
I Sa LinVB 4:3  Ntango ba-Israel bazongi o nganda, bakolo ba mboka balobi : « Mpo nini Yawe abeteki biso lelo na maboko ma ba-Filisti ? Tokende kokamata Sanduku ya Bondeko bwa Yawe o Silo. Eya o kati ya biso mpe ebikisa biso o maboko ma banguna. »
I Sa LinVB 4:4  Batindi bato o Silo. Bayei na Sanduku ya Bondeko bwa Yawe wa bokasi bonso, oyo afandi likolo lya bakerubim. Bana babale ba Eli, Ofni na Pinekas, bazalaki kokengele Sanduku.
I Sa LinVB 4:5  Ekomi Sanduku o nganda ya ba-Israel, bato banso bagangi na mo­ngongo makasi ; nganda eningani.
I Sa LinVB 4:6  Ba-Filisti bayoki makeléle mana mpe bamituni ntina ba-Ebrei bazalaki kosepela bongo. Bayoki ’te Sanduku ya Yawe ekomi kuna.
I Sa LinVB 4:7  Bakomi kobanga, balobi : « Nzambe akomi o nganda ya bango. Mawa na biso ! Likambo liye likweli biso naino te.
I Sa LinVB 4:8  Mawa na biso ! Nani akobikisa biso o maboko ma Nzambe nta bokasi ? Ye apesaki ba-Ezipeti bitumbu nde­nge na ndenge.
I Sa LinVB 4:9  Bandeko ba-Filisti, bolakisa bokasi bwa bana babali ! Tokoma baombo ba bango te, lokola bango bazalaki baombo ba biso liboso ! Bobunda makasi ! »
I Sa LinVB 4:10  Ba-Filisti ba­bandi etumba lisusu mpe bakweisi bato ba Israel. Epai ya Israel bato nko­to ntuku isato bakufi, basusu bakimi.
I Sa LinVB 4:11  Sa­nduku ya Nzambe ekomi o maboko ma banguna, mpe bana ba Eli, Ofni na Pinekas, bakufi.
I Sa LinVB 4:12  Moto moko wa libota lya Benyamin alongwi o esika ya etumba, akei mbangu mpe akomi o Silo se o mokolo monamei. Bilamba bya ye bipa-swani mpe motó mwa ye mobebi na mabelé.
I Sa LinVB 4:13  O ntango ayei, Eli afandi o kiti ya ye, penepene na ezibeli ya ndako, azalaki kotala epai ya nzela ; motema mwa ye mozalaki kolenge mpo ya Sanduku ya Nzambe. Moto oyo ayeli bato ba mboka nsango ena, bipai binso bato bakomi koganga o mboka.
I Sa LinVB 4:14  Eli ayoki makeléle mpe atuni : « Mpo nini bato bazali kosala makeléle bongo ? » Moto oyo ayei mba­ngu mpe ayebisi Eli nsango.
I Sa LinVB 4:15  Eli akokisi mibu ntuku libwa na mwa­mbe, azalaki kotala se liboso mpe ako­ki komono lisusu malamu te.
I Sa LinVB 4:16  Mo­to oyo alobi na Eli : « Nauti o nga­nda ya basoda, nakimi esika ya etumba se lelo. » Mpe Eli atuni ye : « Mwa­na wa ngai, makambo nini malekaki kuna ? »
I Sa LinVB 4:17  Ntoma azongisi : « Bato ba Israel bakimi ba-Filisti, basoda mingi bakufi, bana ba yo Ofni na Pinekas bakufi mpe ; banguna babotoli Sanduku ya Nzambe. »
I Sa LinVB 4:18  Awa Eli ayo­ki nsango ya Sanduku ya Nzambe, akwei o kiti mpe alali makalekale penepene na ezibeli ya mboka, nkingo ebukani mpe akufi se wana. Azalaki mobange mpe na nzoto bozito mingi. Azalaki zuzi o Israel mibu ntuku inei.
I Sa LinVB 4:19  Bokilo wa ye, mwasi wa Pinekas, azalaki na zemi mpe alingi abota. Eyoki ye nsango ya Sanduku ya Nza­mbe mpe liwa lya bokilo mpe lya mobali wa ye, amibwaki o nse mpe aboti, zambi mpasi ya kobota eka-ngaki ye.
I Sa LinVB 4:20  Awa alingi akata motema, baye bazalaki kosalisa ye balobi : « Kitisa motema, oboti mwana mobali. » Kasi azongisi liloba te, akebi na ya­ngo te.
I Sa LinVB 4:21  Apesi mwana wa ye nkombo Ikabod, zambi alobi : « Lokumu lolo­ngwi o Israel », mpo azalaki kokanisa Sanduku ya Nzambe eye banguna ba­botoloki, na liwa lya bokilo mpe lya mobali wa ye.
I Sa LinVB 4:22  Alobi : « Lokumu lolongwi o Israel, zambi babotoli Sa­nduku ya Nzambe. »
Chapter 5
I Sa LinVB 5:1  Ba-Filisti babotoloki Sanduku ya Nzambe. Ut’o Eben-a-Ezer bakei na yango o Asdod.
I Sa LinVB 5:2  Ba-Filisti bakamati Sanduku ya Nzambe mpe bakotisi yango o tempelo ya nzambe wa bango Dagon ; batii yango penepene na ekeko ya Dagon.
I Sa LinVB 5:3  Mokolo mwa nsima bato ba Asdod batelemi na ntongontongo mpe bakei o te­mpelo ya Dagon ; bamoni ekeko ya Dagon ekwei elongi o nse liboso lya Sanduku ya Yawe. Batelemisi Dagon mpe bazongisi ye o esika azalaki.
I Sa LinVB 5:4  Ekei bango lisusu na ntongontongo mokolo mwa nsima, bamoni ’te ekeko ya Dagon ekwei elongi o nse liboso lya Sanduku ya Yawe ; motó na maboko mabale ma ekeko makatani mpe malali pene na ezibeli ya tempelo ; etikali se nzoto ya ekeko ya Dagon.
I Sa LinVB 5:5  Ntina ena banganga ba Dagon na baye banso bakokotoko o tempelo ya Dagon bakotiaka lisusu makolo te o libanga lya ezibeli ya tempelo ya Dagon tee lelo.
I Sa LinVB 5:6  Loboko la Yawe lo­nyati bato ba Asdod mpenza ; abuli­nginyi bango mpe atindeli ba-Asdod mpe bato ba mokili mwa penepene bokono bobe bokobimisa mbuma o nzoto.
I Sa LinVB 5:7  Emoni bato ba Asdod makambo makweli bango, balobi : « Sa­nduku ya Nzambe wa Israel ekoki kotikala epai ya biso te, zambi loboko la ye lobeti biso na Dagon nza­mbe wa biso. »
I Sa LinVB 5:8  Babengi bankumu banso ba-Filisti mpe balobi : « Tosala nini na Sanduku ya Nzambe wa Israel ? » Ba­ngo bazongisi : « Tokende na Sanduku ya Nzambe wa Israel epai ya Gat ; » mpe bakei na yango kuna.
I Sa LinVB 5:9  Kasi awa bakomi na yango kuna, loboko la Yawe lobeti bato ba mboka, mpe bato banso bayoki motema nsomo mpe­nza : Yawe abeti bato banso ba mboka, ná bana ná bakolo, banso babeli bokono : mbuma ibimeli bango o nzoto.
I Sa LinVB 5:10  Yango wana batindi Sanduku ya Nzambe epai ya Ekron, kasi, awa Sanduku ya Nzambe ekomi o Ekron, bato ba Ekron bagangi : « Bayeli biso Sanduku ya Nzambe wa Israel mpo ya koboma biso na bato banso ba mboka. »
I Sa LinVB 5:11  Babengi bankumu banso ba Filisti mpe balobi : « Bozongisa Sa­nduku ya Nzambe wa Israel, ezonga o esika ezalaki liboso mpo eboma biso na bato banso ba mboka te. » Nsomo ya liwa ekoteli bato ba mboka, zambi loboko la Nzambe lonyataki bango mpenza.
I Sa LinVB 5:12  Baye bakufaki te, mbuma ibimeli bango o nzoto, mpe boleli bwa mawa bobuti tee o likolo.
Chapter 6
I Sa LinVB 6:1  Sanduku ya Yawe etikali o mokili mwa ba-Filisti sanza nsa­mbo.
I Sa LinVB 6:2  Ba-Filisti babengi banganga Nza­mbe na banganga nkisi ba bango mpe batuni bango : « Tosala nini na Sanduku ya Yawe ? Bolakisa biso boniboni tozongisa yango o esika ezalaki. »
I Sa LinVB 6:3  Ba­yanoli : « Soko bozongisi Sa­nduku ya Nzambe wa Israel, bozongisa ya­ngo mpamba boye te, kasi bobonza libonza lya bofuti nyongo, bongo bo­kobika o bokono mpe bokoyeba ntina nini Yawe apesaki bino etumbu eye enene. »
I Sa LinVB 6:4  Batuni : « Boniboni tobonzela ye libonza lya bofuti nyo­ngo ? » Bayanoli : « Botanga motango mwa bankumu ba Filisti ; bofuta bo­ngo mbuma ya wolo itano mpe mpoko ya wolo itano, zambi bino banso elongo na bankumu ba bino bobeleki bokono se motindo moko.
I Sa LinVB 6:5  Bosala bikeko bya mbuma mpe bya mpoko, iye izalaki kobebisa mokili mwa bino mpe bokembisa Nzambe wa Israel. Mbele akonyata bino, banzambe ba bino na ekolo ya bino lisusu makasi boye te.
I Sa LinVB 6:6  Mpo nini bósala motó makasi lokola bato ba Ezipeti na Farao, o ntango Yawe anyokoloki bango, mpo balingisaki ba-Israel bakende te ?
I Sa LinVB 6:7  Sikawa bokamata mpe bobongisa likalo lya sika na ngombe basi ibale, iye izali na bana mpe ikumbaki mokumba naino te. Bokangisa yango na likalo mpe botika bana ba yango izonga o lopango.
I Sa LinVB 6:8  Bokamata Sanduku ya Yawe mpe bobutisa yango o lika­lo. Nde biloko bya wolo, biye bo­kofuta mpo ’te bozwa bolimbisi, botia byango o sanduku esusu penepene na Sanduku ya Yawe, mpe botika ngombe ikende.
I Sa LinVB 6:9  Na nsima botala malamu : soko ngombe ikei o mokili esika Sanduku eutaki o nzela ya Bet-Semes, tokoyeba ’te Yawe ye moko atindelaki biso mabe manene mana ; soki ngombe ikei o nzela ena te, tokoyeba ’te Yawe mpenza apesaki biso etumbu ena te, kasi mabe mana ma­kwelaki biso bobele bongo. »
I Sa LinVB 6:10  Bato basali bongo ; bakamati ngo­mbe basi ibale, iye izali na bana, ba­ka­ngisi yango na likalo, kasi bazongisi bana ngombe o lopango.
I Sa LinVB 6:11  Babutisi Sa­nduku ya Yawe o likalo elongo na mwa sanduku, esika batii bikeko bya mpoko ya wolo mpe bya mbuma ya wolo.
I Sa LinVB 6:12  Ngombe ikei nzela semba, eye eko­kende o Bet-Semes, mpe ilandi se nzela ena ; itamboli se kotambola, se kolela o nzela, ileki epai ya mobali to epai ya mwasi te. Bankumu ba Filisti balandi yango tee o ndelo ya Bet-Semes.
I Sa LinVB 6:13  Bato ba Bet-Semes bazalaki kobuka mbuma ya mampa o bilanga. Bátombola miso, bamoni Sanduku mpe basepeli awa bamoni yango.
I Sa LinVB 6:14  Likalo likomi o elanga ya Yozue o Bet-Semes esika litelemi. Ezalaki wana libanga linene mpenza. Bapasoli mabaya ma likalo mpe babomi ngo­mbe basi mpo ’te batumbela Yawe libonza.
I Sa LinVB 6:15  Ba-Levi bakitisi Sanduku ya Yawe mpe sanduku eye ezalaki na biloko bya wolo, batii binso o libanga linene. O mokolo mona bato ba Bet-Semes babonzeli Yawe mabonza ma kotumba mpe miboma.
I Sa LinVB 6:16  Emoni ba­nkumu batano ba Filisti makambo mana manso, bazongi o Ekron se o mokolo monamei.
I Sa LinVB 6:17  Ba-Filisti bazalaki kofuta bikeko bya wolo mpo ya bofuti nyongo ona Yawe o mboka iye : Asdod, Gaza, Askelon, Gat, Ekron ; banso bafuti ekeko yoko yoko.
I Sa LinVB 6:18  Bazalaki mpe na bikeko bya mpoko bikokani na motango mwa bingumba bya ba-Filisti o bikolo biye bitano bizalaki na bakonzi, ná mboka inene izingami na mapango ná mboka ike izalaki na lopango te. Libanga linene lina esika batiaki Sa­nduku ya Yawe likoki komonono naino tee lelo o elanga ya Yozue o Bet-Semes.
I Sa LinVB 6:19  Yawe apesi bato ba Bet-Semes etumbu, zambi batalaki Sa­nduku ya Yawe. Bato bazalaki wana nkoto ntuku itano, Yawe abomi bato ntuku nsambo. Bato bazalaki na mawa mingi, zambi Yawe apesaki bango etumbu enene.
I Sa LinVB 6:20  Bato ba Bet-Semes balobi : « Nani akoki kobima o miso ma Yawe, Nzambe mosantu ? Soko atiki biso akokende epai ya banani ? »
I Sa LinVB 6:21  Batindi bantoma epai ya bato ba Kiriat-Yearim na maloba maye : « Ba-Filisti basili kozongisa Sanduku ya Yawe. Yakani kokamata yango. »
Chapter 7
I Sa LinVB 7:1  Bato ba Kiriat-Yearim bayei, bamemi Sanduku ya Yawe, batii yango o ndako ya Abinadab ezali o ngomba. Na nsima baponi Eleazar, mwana wa Abinadab, azala moke­ngeli wa Sanduku ya Yawe.
I Sa LinVB 7:2  Uta mokolo Sanduku ya Bondeko ekomi o Kiriat-Yearim, mibu mileki ntuku ibale, mpe ba-Israel banso bazalaki komilela epai ya Yawe.
I Sa LinVB 7:3  Samuel alobi na bato banso ba Israel : « Soko ya solo bozongeli Yawe na mo­tema moko, bolongola bikeko bya Baal na Astarte o kati ya bino ; bobongola mitema epai ya Yawe mpe bosalela se ye. Bongo akobikisa bino o maboko ma ba-Filisti. »
I Sa LinVB 7:4  Yango wana bato ba Israel balongoli bikeko bya Baal na Astarte, mpe basaleli se Yawe.
I Sa LinVB 7:5  Samuel alobi : « Bosangisa bato ba­nso ba Israel o mboka Mispa mpe nakobondela Yawe mpo ya bino. »
I Sa LinVB 7:6  Ba­nso basangani o Mispa, bakei kotoka mai mpe basopi mango liboso lya Yawe ; mokolo mona balali nzala mpe balobi : « Tosalaki masumu o miso ma Yawe. » Samuel asambisi ba-Israel bo­ngo o Mispa.
I Sa LinVB 7:7  Awa ba-Filisti bayoki ’te ba-Israel basangani o Mispa, bakonzi ba ba-Filisti bakei etumba na bango. Eyoki ba-Israel ’te ba-Filisti bazalaki koya, babangi.
I Sa LinVB 7:8  Balobi na Samuel : « Bondela Yawe Nzambe wa biso ’te abikisa biso o maboko ma ba-Filisti. »
I Sa LinVB 7:9  Samuel akamati mwana mpata mpe abonzeli Yawe yango, abondeli Yawe mpo ya Israel, mpe Yawe andimeli ye.
I Sa LinVB 7:10  Ntango Samuel azalaki kobo­nza libonza lya kotumba, ba-Filisti babandi etumba na ba-Israel ; kasi o mokolo mona Yawe abetibeti ba-Filisti, atii mobulu o kati ya bango, mpe bongo ba-Israel balongi.
I Sa LinVB 7:11  Bato ba Israel balongwi o Mispa, balandi ba-Filisti mpe babundi na bango etu­mba tee o Bet-Kar.
I Sa LinVB 7:12  Na nsima Samuel akamati libanga mpe atelemisi lyango kati ya Mispa na Sen mpe apesi lyango nkombo Eben-a-Ezer, alobi : « Yawe asalisi biso tee awa. »
I Sa LinVB 7:13  Ba-Filisti bakiti mpenza. Bayi­nge­li lisusu o mokili mwa Israel te ; Ya­we asilisi ba-Filisti na bokasi bwa loboko la ye mikolo minso mya bomoi bwa Samuel,
I Sa LinVB 7:14  Mboka inso ba-Filisti babotoloki ba-Israel izongeli ba­ngo, banda Ekron tee Gat. Ba-Israel babikisi mokili mwa bango mobimba o maboko ma ba-Filisti. Ba-Israel na ba-Amor bafandi na boboto.
I Sa LinVB 7:15  Samuel azalaki zuzi o Israel bomoi bwa ye mobimba.
I Sa LinVB 7:16  Mobu na mobu azalaki kokende o Betel, Gilgal na Mispa mpe ayangeli Israel o bisika bina binso azalaki zuzi wa Israel.
I Sa LinVB 7:17  Na nsima azongi o Rama, zambi ndako ya ye ezalaki wana. Ut’o mboka ena azalaki kosambisa Israel. Kuna ato-ngeli Yawe altare.
Chapter 8
I Sa LinVB 8:1  Samuel akomi mobange mpe atii bana ba ye bazuzi ba Israel.
I Sa LinVB 8:2  Mwana wa yambo, nkombo ya ye Yoel ; mozimi wa ye nkombo ya ye Abia ; bazalaki bazuzi o Berseba.
I Sa LinVB 8:3  Kasi bana balandaki ndakisa ya tata wa bango te ; mposa ya mosolo ekoteli bango o mitema, bazalaki koyamba mabonza, balandaki mibeko na bosembo te.
I Sa LinVB 8:4  Bakolo banso ba Israel basangani, bakei epai ya Samuel o mboka Rama.
I Sa LinVB 8:5  Balobi na ye : « Okomi mobange, mpe bana ba yo bazali kolanda ndakisa ya yo te. Bongo oponela biso mokonzi mpo azala zuzi wa biso, lokola ekosalemaka o bikolo bisusu. »
I Sa LinVB 8:6  Samuel asepeli te, mpo balobaki : « Pesa biso mokonzi oyo akozala zuzi wa biso. » Yango wana Samuel abondeli Yawe.
I Sa LinVB 8:7  Kasi Yawe alobi na Samuel : « Ondimela bango mpe sala lokola balingi ; mpamba te, baboyi yo te, kasi baboyi ngai ; balingi nazala mokonzi wa bango lisusu te.
I Sa LinVB 8:8  Manso basalaki ngai banda mokolo nabimisaki bango o Ezipeti tee lelo, bakosalaka yo se bongo : batikaki ngai mpe balandaki banzambe basusu.
I Sa LinVB 8:9  Ndimela bango lokola basengi yo. Kasi kebisa bango makasi mpe lakisa ba­ngo mibeko mya mokonzi oyo akoyangela bango. »
I Sa LinVB 8:10  Samuel akei koyebisa maloba ma Yawe manso na bato basengeki mokonzi.
I Sa LinVB 8:11  Alobi boye : « Tala boniboni mokonzi akoyangela bino. Akoka­nga bana babali ba bino mpe akopesa bango mosala mwa kotambwisa makalo na farasa ya ye. Bakotambola liboso lya likalo lya ye.
I Sa LinVB 8:12  Akokomisa bango bakambi ba basoda ba ye nkoto yoko to ntuku itano. Akotinda basusu bakata bilanga, basusu babuka mbuma o bilanga, basusu basala bibuneli mpe bikangeli bya makalo ma ye.
I Sa LinVB 8:13  Akotinda bilenge basi ba bino basala biloko bya malasi, balamba mampa na biloko bya kolia.
I Sa LinVB 8:14  Akokamata bilanga, nzete ya vino mpe ya oliva bya bino, biye bileki bilamu, mpo apesa byango na bakomanda ba ye.
I Sa LinVB 8:15  Ntango ya bobuki mbuma, akokamata eteni ya zomi, akopesa yango na bayangeli mpe na bato ba ndako ya ye.
I Sa LinVB 8:16  Akokamata basaleli ba bino, babali na basi, baye baleki na bokasi, na mpe ngombe na mpunda ya bino, mpo ’te basalela ye mosala.
I Sa LinVB 8:17  Akokamata eteni ya zomi ya bibwele bya bino, mpe bino moko bokozala baombo ba ye.
I Sa LinVB 8:18  Mokolo mona bokomilela mpo ya mokonzi oyo bopo­no­ki, kasi Yawe akozongisela bino lilo­ba lyoko te. »
I Sa LinVB 8:19  Bato baboyi koyoka maloba ma Samuel, balobi : « Eloko te ! Tolingi opesa biso mokonzi.
I Sa LinVB 8:20  Tolingi kozala lokola bikolo bisusu : mokonzi wa biso akosambisa biso, ye akotambola li­boso lya biso mpe akokamba biso o bitumba. »
I Sa LinVB 8:21  Samuel ayoki maloba mana manso mpe ayebisi Yawe mango.
I Sa LinVB 8:22  Kasi Yawe alobi na Samuel : « Ndima maloba ma bango, tiela bango mokonzi. » Samuel alobi na bato ba Israel : « Bozo­nga moto na moto o mboka ya ye. »
Chapter 9
I Sa LinVB 9:1  Ezalaki moto moko wa nkita, wa libota lya Benyamin, nkombo ya ye Kis, mwana wa Abiel, nkoko wa Seror, oyo Bekorat abotaki ; ye mwana wa Afia, wa libota lya Benyamin.
I Sa LinVB 9:2  Azalaki na mwana mobali, Saul, elenge mobali kitoko, moto moko o Israel akokani na ye te ; aleki bato banso na bolai.
I Sa LinVB 9:3  Mokolo moko mpunda isusu ya ta­ta wa ye Kis ibungi. Kis alobi na mwana wa ye Saul : « Kende na mosaleli moko koluka mpunda yango. »
I Sa LinVB 9:4  Bakatisi ngomba ya Efraim na mokili mwa Salisa, kasi bamoni yango te. Bakatisi mokili mwa Salim ; kuna mpe mpunda imononi te. Bakatisi mo­kili mwa Benyamin, bazwi yango te.
I Sa LinVB 9:5  Awa bakomi o mokili mwa Suf, Saul alobi na mosaleli wa ye : « Malamu tozonga o mboka ; tata akanisi mpunda ya ye lisusu te, mbele akomi kobanga mpo ya biso. »
I Sa LinVB 9:6  Kasi mosa­le­li ayanoli : « Moto moko wa Nzambe akofandaka o mboka ena. Azali moto wa lokumu lonene ; makambo akoloba makosalema solo. Tokende kuna, mbele ye akoyebisa biso esika nini tokoki koluka mpunda. »
I Sa LinVB 9:7  Saul alobi na mosaleli : « Soko tokei epai ya ye, tokobonzela ye libonza nini ? Mampa masili o libenga lya biso mpe tozali na eloko esusu mpo tobonzela ye te. Eloko nini ezali na biso naino ? »
I Sa LinVB 9:8  Mosaleli ayanoli Saul : « Nazali na yoko ya binei ya motako mwa palata, nakopesa mwango na moto wa Nzambe ; akoyebisa biso nzela nini tokoki kolanda mpo tokoba mobe­mbo mwa biso. »
I Sa LinVB 9:9  Saul alobi na mosaleli wa ye : « Olobi malamu, toke­nde. » Mpe bakei o mboka eye moto wa Nzambe akofandaka. Ezalaki bango kobuta nzela ya mboka, bakuti bilenge basi babimi o mboka mpo ya kotoka mai, batuni ba­ngo : « Momoni-makambo azali awa ? » Kala, awa balingaki kotuna Nzambe likambo, bameseneke koloba boye o Israel : « Tokende kotala ‘Momoni-makambo’ », profeta wa lelo, kala babengaka ye ‘momoni-makambo’.
I Sa LinVB 9:10  Saul alobi na mosaleli wa ye : « Olobi malamu, toke­nde. » Mpe bakei o mboka eye moto wa Nzambe akofandaka. Ezalaki bango kobuta nzela ya mboka, bakuti bilenge basi babimi o mboka mpo ya kotoka mai, batuni ba­ngo : « Momoni-makambo azali awa ? » Kala, awa balingaki kotuna Nzambe likambo, bameseneke koloba boye o Israel : « Tokende kotala ‘Momoni-makambo’ », profeta wa lelo, kala babengaka ye ‘momoni-makambo’.
I Sa LinVB 9:11  Saul alobi na mosaleli wa ye : « Olobi malamu, toke­nde. » Mpe bakei o mboka eye moto wa Nzambe akofandaka. Ezalaki bango kobuta nzela ya mboka, bakuti bilenge basi babimi o mboka mpo ya kotoka mai, batuni ba­ngo : « Momoni-makambo azali awa ? » Kala, awa balingaki kotuna Nzambe likambo, bameseneke koloba boye o Israel : « Tokende kotala ‘Momoni-makambo’ », profeta wa lelo, kala babengaka ye ‘momoni-makambo’.
I Sa LinVB 9:12  Bilenge basi bazongisi : « Ya solo, azali kuna o liboso. Sikawa bokende noki, ayaki lelo o mboka, zambi lelo akobonza libonza o miso ma bato banso kuna o ngomba esantu.
I Sa LinVB 9:13  Ekokoto bino o mboka, bokokuta ye naino abandi kolia te o ngo­mba esantu. Soko ye akomi naino te, bato mpe bakolia te. Ye moto akobenisa libonza ; bobele nsima bato ba­byangemi bakoki kolia. Sikawa bobuta ngomba, bokokuta ye noki. »
I Sa LinVB 9:14  Bongo bakei o mboka. Ekoti ba­ngo o mboka, Samuel abimi liboso lya bango, akei o ngomba esantu.
I Sa LinVB 9:15  Nzokande mokolo liboso lya boyei bwa Saul, Yawe ayebisaki Samuel :
I Sa LinVB 9:16  « Lobi na ngonga eyemei, nakotindela yo mo­to moko wa mokili mwa Benyamin, pakola ye mafuta mpo azala mo­konzi wa Israel ; ye akobikisa bato ba ngai o maboko ma ba-Filisti, za­mbi namoni mpasi ya bato ba ngai, boleli bwa bango bokomi mpe tee epai ya ngai. »
I Sa LinVB 9:17  Ntango Samuel amo­ni Saul, Yawe ayebisi ye : « Tala moto oyo nayebisaki yo ’te akoya­ngela eko­lo ya ngai. »
I Sa LinVB 9:18  Pene na ezibeli ya mbo­ka Saul alobi na Samuel : « Olingi kolakisa ngai ndako ya Momoni-makambo ? »
I Sa LinVB 9:19  Samuel azongisi : « Momoni-makambo bobele ngai oyo ! Tambola liboso lya ngai mpe buta mwa ngomba. Lelo okolia na ngai elongo. Lobi na ntongo nakotika yo mpe nakoyebisa yo manso mazali ko­tungisa yo.
I Sa LinVB 9:20  Kitisa motema, mpu­nda iye osili obungisi mikolo misato imononi ! Nkita inso ya Israel izali ya nani ? Izali ya yo mpe ya libota lya tata wa yo te ? »
I Sa LinVB 9:21  Saul ayanoli : « Ngai nazali moto wa libota lya Benyamin, libota like mpenza o kati ya mabota manso ma Israel, mpe etuka ya ngai ezali nsima ya bituka binso bya Be­nyamin. Mpo nini olobi na ngai maloba ma motindo mona ? »
I Sa LinVB 9:22  Samuel akamati Saul na mosaleli wa ye mpe akotisi bango o ndako ya limpati. Afandisi bango o esika ya liboso o kati ya bato babyangemi ; ba­ngo bazalaki soki bato ntuku isato.
I Sa LinVB 9:23  Samuel alobi na molambi : « Pesa nya­ma eye nalobaki ’te otia yango mpembeni. »
I Sa LinVB 9:24  Molambi akamati lokolo la nyama na mokila. Atii yango liboso lya Saul mpe alobi : « Tala nyama eye etikali, lia yango, zambi nabombelaki yo yango mokolo balobaki ’te nakobyanga bato o limpati. » Mpe o mokolo mona Saul alei elongo na Samuel.
I Sa LinVB 9:25  Balongwi o ngomba esantu mpe bakei o mboka. Samuel na Saul basololi mingi o mbalasani ya ndako.
I Sa LinVB 9:26  Balamuki na nta ntongo, mpe o ntango moi mobandi kobima, Samuel abengi Saul epai ya likolo, alobi na ye : « Teleme, nakokende kotika yo. » Saul ate­lemi mpe bango babale, ye na Samuel, bakei o libanda.
I Sa LinVB 9:27  Awa bakomi o ndelo ya mboka, Samuel alobi na Saul : « Loba na mosaleli wa yo ake­nde liboso ; yo tikala naino awa mpo ’te nayebisa yo liloba lya Nzambe. »
Chapter 10
I Sa LinVB 10:1  Samuel akamati mbeki ya mafuta, asopeli Saul mango o motó ; azingi ye ekopi mpe alobi : « Yawe moto apakoli yo mafuta, mpo ozala mokonzi wa Israel, ekolo ya ye. Yo moto okoyangela ekolo ya Yawe mpe okobikisa bato ba ye o maboko ma banguna. Mpe tala awa elembo ’te Yawe moto aponoki yo bo mokonzi wa ekolo ya ye.
I Sa LinVB 10:2  Okotika ngai lelo, okokuta bato babale penepene na lilita lya Rakele, o ndelo ya mokili mwa Benyamin. Bakoyebisa yo : ‘Mpunda ozalaki koluka, isili imononi ! Tata wa yo asili kobosana likambo lya mpunda mpe akomi kobanga mpo ya yo ; azali komituna : Nakoki kosala nini mpo ya mwana wa ngai ?’
I Sa LinVB 10:3  Longwa wana, koba nzela ya yo mpe okokoma epai ya wenge eye ezali o Tabor. Kuna okokuta bato basato bazali kokende o ndako Nzambe ya Betel ; moko akomeme bana ntaba isato, mosusu mampa masato, mosusu mbeki ya vino.
I Sa LinVB 10:4  Bakopesa yo losako mpe bakokabela yo mampa mabale ; okokamata mango o maboko ma bango.
I Sa LinVB 10:5  Na nsima okokoma o Gibea, ngomba ya Nzambe, esika bayangeli ba Filisti bakofandaka. Kuna, o ntango okokoto o mboka, okokutana na lingomba lya baprofeta, balongwi o ngomba esantu mpe bazali kolanda bato ba miziki, baye bakobeteke nzenze, mbonda, mpiololo na like­mbe. Bakosakola maloba ma profeta.
I Sa LinVB 10:6  Elimo ya Yawe ekokitela yo, okosakola lokola profeta mpe okobongwana moto mosusu.
I Sa LinVB 10:7  Esika okomono bilembo bina binso bikosalema, sala maye osengeli kosala, zambi Nzambe azali na yo.
I Sa LinVB 10:8  Yo, okita ngomba liboso lya ngai mpe kende o Gilgal. Nakolanda yo nsima mpo ya kobonzela mabonza ma kotumba na miboma mya bondeko. Zila ngai kuna mikolo nsambo ; na nsima nakoya epai ya yo mpe nakoyebisa yo maye osengeli kosala. »
I Sa LinVB 10:9  Elingi Saul kokende mpe kotika Samuel, Nzambe abongoli ye motema, mpe bilembo bina binso biyei ko­salema bobele o mokolo monamei.
I Sa LinVB 10:10  Balongwi o Gibea mpe bakutani na lingomba lya baprofeta. Elimo ya Nza­mbe ekiteli ye mpe abandi kosakola maloba ma profeta elongo na bango.
I Sa LinVB 10:11  Bato banso bayebaki Saul ut’o kala, awa bamoni ’te akomi kosakola maloba elongo na baprofeta, balobani : « Makambo nini makwelaki mwana wa Kis ? Saul mpe azali moko wa baprofeta ? »
I Sa LinVB 10:12  Mpe moto moko wa mboka alobi : « Kasi tata wa bango nani ? » Yango wana liloba liye likomi lokola eyele epai ya bato : « Saul mpe azali moko wa baprofeta ? »
I Sa LinVB 10:14  Noko wa Saul atuni ye na mosaleli wa ye : « Bokendeki wapi ? » Saul azongisi : « Tokendeki koluka mpu­nda. Tomonoki yango te ; yango wana tokendeki epai ya Samuel. »
I Sa LinVB 10:15  Noko wa Saul alobi na ye : « Yebisa ngai maloba Samuel alobaki na yo. »
I Sa LinVB 10:16  Saul ayanoli noko wa ye : « Ayebisi biso bobele ’te mpunda isili imononi. » Kasi likambo lya bokonzi, liye Samuel alobelaki ye, ayebisi ye te.
I Sa LinVB 10:17  Samuel abengi bato banso epai ya Yawe kuna o Mispa.
I Sa LinVB 10:18  Alobi na ba-Israel : « Yawe, Nzambe wa Israel, alobi boye : Ngai moto nabimisaki ba-Israel o Ezipeti, nabikisaki bino o boombo bwa Ezipeti mpe o maboko ma bakonzi banso bazalaki konyokolo bino.
I Sa LinVB 10:19  Kasi bino, lelo boboyi Nzambe wa bino, oyo abikisaki bino o mabe manso mpe o makambo ma nsomo, mpe bolobi na ye : ‘Pesa biso mokonzi’. Bomilakisa sikawa na Yawe, mabota na mabota, bituka na bituka. »
I Sa LinVB 10:20  Samuel abengi mabota manso ma Israel mpo babeleme na ye, mpe libota lya Benyamin liponomi.
I Sa LinVB 10:21  Abengi libota lya Benyamin, etuka na etuka, mpe etuka ya Matri eponomi. Abe­ngi etuka ya Matri, moto moko moko, mpe Saul, mwana wa Kis, oyo aponomi. Baluki ye, kasi bamoni ye te.
I Sa LinVB 10:22  Batuni Yawe lisusu : « Moto moko alekaki awa ? » Mpe Yawe ayanoli : « Ta­la ye kuna, abombami penepene na sanduku ya biloko. »
I Sa LinVB 10:23  Bakei mba­ngu kokamata ye, mpe ye amilakisi o kati ya bato. Aleki bato banso na bolai, azali moto wa mapeke malai maleki bato basusu banso.
I Sa LinVB 10:24  Samuel alobi na bato : « Bomoni moto oyo Yawe aponi ? O ekolo mobimba moto moko akokani na ye te. » Mpe banso babeteli ye maboko mpe bagangi : « Mokonzi kuma ! »
I Sa LinVB 10:25  Samuel alimboleli bato makoki ma mokonzi ; akomi manso o mo-nkanda mpe atii mwango liboso lya Yawe. Na nsima Samuel atindi bato bazonga o mboka.
I Sa LinVB 10:26  Saul mpe azongi o mboka ya ye Gibea. Mpe bato, baye Yawe apesi bango mpiko, bakei na ye elongo.
I Sa LinVB 10:27  Kasi bifaka bya bato balobi : « Ndenge nini moto oyo akobikisa biso ? » Bakinoli ye mpe baboyi kopesa ye makabo. Kasi Saul atali yango se mpamba.
Chapter 11
I Sa LinVB 11:1  Nakas, moto wa Amon, akei kobunda etumba na bato ba Yabes o mokili mwa Galaad mpe azingi mboka. Bato ba Yabes balobi na Nakas : « Kata na biso bondeko mpe biso tokosalela yo. »
I Sa LinVB 11:2  Kasi Nakas, moto wa Amon, ayanoli : « Nakokata bondeko na bino soko bakotubola moko moko wa bino liso lya mobali ; nalingi koyokisa ba-Israel banso nsoni. »
I Sa LinVB 11:3  Bakolo ba Yabes balobi na ye : « Pesa biso naino mikolo nsambo. Tokotinda bantoma o mokili mobimba mwa Israel, mpe soko bayei kobikisa biso te, tokobima awa mpe tokomipesa o maboko ma yo. »
I Sa LinVB 11:4  Ba­ntoma bayei o Gibea, mboka ya Saul, mpe bayebisi bato makambo mana manso. Bato babandi koganga mpe kolela.
I Sa LinVB 11:5  Bobele o ntango ena, Saul auti o bilanga elongo na ngombe ya ye, atuni bato : « Mpo nini bato bazali kolela boye ? » Bayebisi ye makambo ma bato ba Yabes.
I Sa LinVB 11:6  Eyoki Saul makambo mana, elimo ya Yawe ekiteli ye mpe ayoki nkanda enene.
I Sa LinVB 11:7  Abomi ngombe ibale, asesi yango biteni biteni mpe atindi bantoma bakende na byango o mokili mobimba mwa Israel mpe baloba maloba maye : « Soko moto aboyi kokende etumba elongo na Saul mpe na Samuel, bakosala na ngombe ya ye se bongo. » Nsomo ya Yawe ekoteli bato o mitema mpe banso lisanga bakei etumba.
I Sa LinVB 11:8  Saul atali bango banso mpe atangi motango mwa ba­ngo kuna o Bezek. Ba-Israel bazalaki nkoto nkama isato, mpe bato ba Yuda nkoto ntuku isato.
I Sa LinVB 11:9  Alobi na ba-ntoma bayaki epai ya ye : « Boloba na bato ba Yabes o mokili mwa Galaad : Lobi o ngonga moi mokoyokisa molunge mingi, bakoya kosalisa bino. » Bantoma bakei koyebisa bato ba Yabes, mpe nsango eye esepelisi bango mingi.
I Sa LinVB 11:10  Bango balobi na Nakas : « Lo­bi tokobima o miso ma bino mpe bokoki kosala na biso lokola bolingi. »
I Sa LinVB 11:11  Mokolo mwa nsima akaboli limpi­nga lya basoda ba ye na mangomba masato. Na ntongontongo bakoti o nganda ya ba-Amon mpe bakweisi bango kin’o ngonga moi mokobeteke makasi. Baye batikali bapanzani ; oko­ki komono bato babale esika yoko te.
I Sa LinVB 11:12  Bato batuni Samuel : « Banani bazalaki koloba ’te Saul akoki kozala mokonzi wa biso te ? Bopesa biso bato bana toboma bango. »
I Sa LinVB 11:13  Kasi Saul alobi : « O mokolo mwa lelo boboma moto moko te, zambi Yawe abikisi Israel lelo. »
I Sa LinVB 11:14  Samuel alobi na bato : « Boya, tokende o Gilgal mpo tobo­ngisa likambo lya bokonzi. »
I Sa LinVB 11:15  Bato banso bakei o Gilgal mpe baluboli Saul mokonzi o miso ma Yawe, o Gilgal. Babonzeli Yawe miboma mya bondeko, mpe bato banso ba Israel basepeli mingi.
Chapter 12
I Sa LinVB 12:1  Samuel alobi na bato banso ba Israel : « Nasali manso lokola bosengeki, mpe napesi bino mokonzi ayangela bino.
I Sa LinVB 12:2  Banda lelo mokonzi akotambola liboso lya bino. Ngai nakomi mobange, nakomi na nsuki mpembe, mpe bana ba ngai bazali o kati ya bino. Banda bomwana bwa ngai tee lelo natamboli liboso lya bino.
I Sa LinVB 12:3  Ngai oyo ! Boloba o miso ma Yawe mpe ma moto oyo Yawe aluboli mokonzi. Natuni bino : Nabotoloki ngombe ya nani ? Nayibaki eloko ya nani ? Nanyokoloki nani ? Mokolo ni­ni nayambaki libonza mpo ya kozipa mabe ma moto ? Soko ezalaki bo­ngo, nakozongisa yango sikawa. »
I Sa LinVB 12:4  Ba­ngo bayanoli : « Oyibaki te, onyokoloki moto moko te mpe ozwaki libonza lya moto moko te. »
I Sa LinVB 12:5  Alobi na bango : « Yawe azali komono, mpe oyo Yawe aluboli mokonzi amoni ’te bino bokuti o maboko ma ngai eloko yoko eyibami te. » Bazongisi : « Solo, Yawe azali komono. »
I Sa LinVB 12:6  Mpe Samuel alobi na bato : « Solo, Yawe azali komono, Yawe oyo aponoki Moze na Arone, oyo abimisaki bankoko ba bino o mokili mwa Ezipeti.
I Sa LinVB 12:7  Sikawa boteleme naino, bongo nasakola mpe nakundolela bino malamu manso Yawe asalaki bino na ba­nkoko ba bino.
I Sa LinVB 12:8  O eleko Yakob ake­ndeki kofanda o Ezipeti, bankoko ba bino babelelaki Yawe, mpe Yawe ati­ndaki Moze na Arone babimisa ba­nkoko ba bino o Ezipeti mpe baka­mba bango o mokili moye.
I Sa LinVB 12:9  Kasi babo­sanaki Yawe Nzambe wa bango : Yawe akabaki bango o maboko ma Sisera, mokonzi wa basoda ba Asor, na mpe o maboko ma ba-Filisti na ba-Moab, baye bazalaki kobunda na bango.
I Sa LinVB 12:10  Babelelaki Yawe : ‘Tosalaki masumu, totikaki Yawe mpe tokumisaki banzambe Baal na Astarte. Sikawa bikisa biso o maboko ma banguna mpe tokosalela yo !
I Sa LinVB 12:11  Mpe Yawe ati­ndaki Yerubaal, Barak, Yefta na Samuel, abikisaki bino o maboko ma banguna bafandi pene na bino, mpe bongo bokomi kofanda nye.
I Sa LinVB 12:12  Nzokande, mokolo bomonoki ’te Nakas, mokonzi wa ba-Amon, azalaki koya kobundisa bino, bolobaki na ngai : ‘Te, biso tolingi moko­nzi ayangela biso’, nzokande Yawe Nzambe wa bino azali mokonzi wa bino.
I Sa LinVB 12:13  Botala sikawa mokonzi boponoki, oyo bosengeki ; Yawe moto ape­saki bino mokonzi.
I Sa LinVB 12:14  Soko bobangi Yawe mpe bosaleli ye, soko botosi ye mpe boboyi ye na mibeko mya ye te, ya solo, bino na mokonzi oyo ayangeli bino, bolandi Yawe Nza­mbe wa bino.
I Sa LinVB 12:15  Kasi soko botosi Yawe te mpe boboyi mibeko mya ye, loboko la Yawe lokonyata bino na mokonzi wa bino lokola.
I Sa LinVB 12:16  Mpe sikawa, boteleme naino awa mpe botala likamwisi linene Yawe akosala o miso ma bino.
I Sa LinVB 12:17  Sikawa eza­li eleko ya bobuki mbuma ya mampa. Nakobondela Yawe, ye moto akotinda nkake mpe akonokisa mbula. Bondima polele ’te bosalaki mabe mpenza o miso ma Yawe, awa bosengeki ye mokonzi. »
I Sa LinVB 12:18  Samuel abondeli Yawe mpe Yawe abetisi nkake mpe anokisi mbula bobele o mokolo monamei. Bato banso bakomi kobanga Yawe ná mpe Samuel.
I Sa LinVB 12:19  Ba­nso balobi na Samuel : « Sambela Yawe Nzambe wa yo mpo ya biso ba­saleli ba yo, mpo ’te tokufa te, awa liko­lo lya masumu ma biso manso tobakisaki naino lisumu lya bosengi mokonzi. »
I Sa LinVB 12:20  Kasi Samuel alobi na bato : « Bobanga te. Solo, bosalaki mabe mana manso. Kasi sikawa boboya Yawe te mpe bosalela ye na motema monso.
I Sa LinVB 12:21  Botika nzela ya bosembo te mpe bolanda bikeko bya mpamba te, biye bizali na litomba lyoko te, mpe bikoki kosalisa bino soki te, zambi bizali bobele biloko bya mpamba.
I Sa LinVB 12:22  Yawe akoboya bato ba ye te mpo ya lokumu la nkombo ya ye enene, zambi Yawe alingaki kokomisa bino bato ba ye mpenza.
I Sa LinVB 12:23  Ngai mpe nakokeba ’te nasala mabe o miso ma Yawe te ; nakolembe kosambelela bino te ; nakolakisa bino bobele nzela elamu mpe semba.
I Sa LinVB 12:24  Bobanga se Yawe mpe bosalela ye na motema moko. Bokanisa makambo manene manso asalaki o kati ya bino.
I Sa LinVB 12:25  Kasi soko bosali mabe, bokokufa bino banso, bino na mpe mokonzi wa bino. »
Chapter 13
I Sa LinVB 13:1  Saul akokisaki mibu… nta­ngo akomi mokonzi wa Israel. Ayangeli Israel mibu mibale.
I Sa LinVB 13:2  Saul aponi bato nkoto isato o Israel : bato nkoto ibale balandi Saul o Mikmas mpe o ngomba Betel, mpe bato nkoto yoko balandi Yonatan o Geba, o mokili mwa Benyamin. Saul azongisi bato basusu banso o biema bya ba­ngo.
I Sa LinVB 13:3  Yonatan abomi moyangeli wa ba-Filisti, oyo afandaki o Gibea, mpe ba-Filisti bayoki nsango ena. Saul abetisi mindule o mokili mobimba mpe alobi : « Ba-Ebrei bayeba lika­mbo lina ! »
I Sa LinVB 13:4  Ba-Israel banso bayoki ’te : « Saul abomi moyangeli wa ba-Filisti, Israel ekomi ekolo ya nsomo o miso ma ba-Filisti ! » Bato banso bakei kosangana epai ya Saul o mboka Gilgal.
I Sa LinVB 13:5  Ba-Filisti basangani mpo ya kobundisa ba-Israel. Bazalaki na makalo nkoto isato, farasa nkoto motoba mpe basoda ebele, lokola zelo o libongo lya mbu. Bango bayei kopika nganda o Mikmas, o Esti ya Bet-Aven.
I Sa LinVB 13:6  Ba-Israel bakomi na likama, zambi banguna bazalaki kozinga ba­ngo bipai binso. Yango wana bakei kobombama o mibenga, o mabulu, o kati ya mabanga mpe o mabela batimolaki mpo ya kobomba mai.
I Sa LinVB 13:7  Ba-Ebrei basusu bakatisi Yordane mpe bakomi o mokili mwa Gad mpe mwa Galaad.
I Sa LinVB 13:8  Azili mikolo nsambo, elaka Samuel atiaki, kasi Samuel ayei o Gilgal te mpe basoda ba Saul batiki ye, bakimi.
I Sa LinVB 13:9  Nsima Saul alobi : « Boyela ngai mabonza ma kotumba na miboma mya bondeko. » Bongo abo­nzi libonza lya kotumba.
I Sa LinVB 13:10  Esilisi ye kobonza libonza lya ko­tumba, Samuel ayei mpe Saul akei kopesa ye losako.
I Sa LinVB 13:11  Samuel alobi : « Osalaki nini ko ? » Saul azongisi : « Namoni ’te basoda batiki ngai mpe bakimi ; yo mpe oyaki te o mokolo olakaki, ntango ba-Filisti basanganaki o Mikmas.
I Sa LinVB 13:12  Yango wana namilobeli o motema : ‘Sikawa ba-Filisti bakoya ko­bunda na ngai o Gilgal, mpe na­kitisi naino motema mwa Yawe te’, bo­ngo nandimi kobonza libonza. »
I Sa LinVB 13:13  Samuel alobi na Saul : « Osali lokola zoba ! Otosi etinda ya Yawe Nzambe wa yo te, eye nayebisaki yo. Ntembe te, Yawe alingaki otikala mokonzi o Israel seko.
I Sa LinVB 13:14  Kasi sikawa bokonzi bwa yo bokolenda te. Yawe asili kopono moto akosepelisa motema mwa ye mpe alubolaki ye mokonzi wa bato ba ye, zambi otosaki etinda te, eye Yawe atindaki yo. »
I Sa LinVB 13:15  Samuel atelemi mpe alongwi o Gilgal, akobi mobembo mwa ye, akei o Geba o mo­kili mwa Benyamin. Saul atangi basoda ba ye, batikali bobele bato nkama motoba.
I Sa LinVB 13:16  Saul na mwana wa ye Yonatan na bato ba ye banso batikali o Geba o mokili mwa Benyamin ; kasi ba-Filisti bapiki nganda o Mikmas.
I Sa LinVB 13:17  O nganda ya ba-Filisti basoda ba mpiko babimi, bakabwani na mangomba masato ; basusu bakei o Ofra o mokili mwa Sual ;
I Sa LinVB 13:18  basusu bakei o Bet-Oron, mpe basusu balandi nzela ya lobwaku la Seboim, epai ya eliki.
I Sa LinVB 13:19  Motuli moko azalaki o mokili mobimba mwa Israel te ; mpamba te, ba-Filisti balobaki : « Tokeba ’te ba-Ebrei batula mimpanga to makongo te. »
I Sa LinVB 13:20  Ba-Israel banso bazalaki kokende epai ya ba-Filisti mpo ya kopelisa mpau, soka, likwangola to mbeli ya bango.
I Sa LinVB 13:21  Bazalaki kofuta bibende bibale bya mosolo mpo ya kopelisa mpau na soka, ebende yoko ya mosolo mpo ya kopelisa makwangola to mpo ya kobongisa mangenda ma bokambi ngombe.
I Sa LinVB 13:22  Mpe bongo o mokolo mwa etumba, basoda ba Saul na Yonatan bazalaki na mimpanga to na makongo te. Bobele Saul na mwana wa ye Yonatan bazalaki na mango.
I Sa LinVB 13:23  Ba­soda ba Filisti babimi mpe baleki o nzela ya Mikmas.
Chapter 14
I Sa LinVB 14:1  Mokolo moko, Yonatan mwana wa Saul alobi na mosali wa ye : « Yaka, tokende epai ya ba-Filisti bazali kuna. » Kasi ayebisaki tata wa ye te.
I Sa LinVB 14:2  Saul azalaki kofanda o ndelo ya mboka Geba o nse ya nzete ya malala, penepene na Migron. Basoda ba ye bazalaki soki nkama motoba.
I Sa LinVB 14:3  Akia, mwana wa Akitub, ndeko wa Ikabod, mwana wa Pinekas, nkoko wa Eli, azalaki nganga Nza­mbe o Silo mpe alati efod. Kasi basoda bamoni te ’te Yonatan asili ake-ndeki.
I Sa LinVB 14:4  Mpo ya kokoma epai ya ba-Filisti, Yonatan aleki o lobwaku lozali na mabanga malai mabale, nkombo ya mango Boses na Sene.
I Sa LinVB 14:5  Libanga o Nordi lizali penepene na Mimas, libanga o Sudi penepene na Geba.
I Sa LinVB 14:6  Yonatan alobi na mosali wa ye : « Yaka, tokoba nzela epai ya basutu. Mbele Yawe akosalisa biso ; ntembe te, Yawe akoki kopesa biso lilonga, ata tozali na bato mingi te. »
I Sa LinVB 14:7  Mosali wa ye azo­ngisi : « Sala manso motema mwa yo motindi. Kende, ngai nakolanda yo. »
I Sa LinVB 14:8  Yonatan alobi : « Sikawa tokomi penepene na bango, mpe tokomilakisa na bango.
I Sa LinVB 14:9  Soko balobi : ‘Bokende tee tokokoma epai ya bino’, tokotikala wana mpe tokokende epai ya bango te.
I Sa LinVB 14:10  Kasi soko balobi : ‘Boya awa’, tokokende, zambi Yawe asili kokaba bango o maboko ma biso. Elembo ena ekosalisa biso. »
I Sa LinVB 14:11  Bamilakisi na basoda ba Filisti. Bango balobi : « Botala ba-Ebrei babimi o mabulu ma bango esika bazalaki kobombama. »
I Sa LinVB 14:12  Bato ba nganda balobi na Yonatan mpe na mosali wa ye : « Boya epai ya biso, toyebisa bino mpo yoko. » Yonatan alobi na mosali wa ye : « Landa ngai, zambi Yawe akabi bango o maboko ma bato ba Israel. »
I Sa LinVB 14:13  Yonatan atamboli na maboko mpe na mabolongo ; mpe mosali wa ye alandi ye. Yonatan abeti bango moko moko ; bakwei liboso lya ye, mpe mosali abomi bango nsima ya ye.
I Sa LinVB 14:14  O etumba eye ya yambo Yonatan na mosali wa ye babomi bato soki ntuku ibale.
I Sa LinVB 14:15  Nsomo ekoteli bango banso o nga­nda, o esobe mpe bipai binso. Bakengeli ba nganda na bilombe, baye batumbaki bilanga bayoki mpe motema nsomo. Mokili moningani mpe banso bakomi koyoka nsomo enene.
I Sa LinVB 14:16  Banongi ba Saul o Gibea o mokili mwa Benyamin, bamoni ’te bato ba nganda babulungani.
I Sa LinVB 14:17  Saul alobi na basoda ba ye : « Bobenga nkombo ya bato, mpe botala soko nani azangi epai ya biso. » Babengi nkombo ya bato ; Yonatan na mosali wa ye bazalaki te.
I Sa LinVB 14:18  Saul alobi na Akia : « Yaka awa na Sanduku ya Nzambe », mpo o mikolo mina Sanduku ya Nzambe ezalaki o kati ya ba-Israel.
I Sa LinVB 14:19  O ntango Saul azalaki koloba na nganga Nzambe, mobulu mokomi mingi o nganda ya ba-Filisti. Saul alobi na nganga Nza­mbe : « Kitisa loboko. »
I Sa LinVB 14:20  Saul na bato ba ye banso basangani mpe bakei kotala esika ya etumba ; bamoni ’te bato ba nganda ya ba-Filisti bazalaki kozokisana na mopanga, mpe mobulu mokomi mingi.
I Sa LinVB 14:21  Ba-Ebrei, baye bakendeki kosala mosala mwa soda epai ya ba-Filisti mpe bazalaki na bango o nganda, bango mpe bakimi, bazongi epai ya basoda ba Israel mpe balandi Saul na Yonatan.
I Sa LinVB 14:22  Ba-Israel banso ba­ye babombamaki o ngomba ya Efraim, awa bayoki ’te ba-Filisti bakimi, bakei kolanda mpe kobundisa bango.
I Sa LinVB 14:23  O mokolo mona Yawe apesi bato ba Israel lilonga linene. Etumba ekomi tee epai ya Bet-Oron.
I Sa LinVB 14:24  Bato ba Israel bayoki mpasi mokolo mona, zambi Saul asakolaki : « Azwa bobe moto oyo alei eloko liboso lya mpokwa, liboso ’te nazongisela banguna mabe basalaki ngai. » Bongo o kati ya bato, moto moko alei eloko te.
I Sa LinVB 14:25  Bato banso bakoti o zamba. Mafuta ma nzoi mazalaki wana o mabelé.
I Sa LinVB 14:26  Ata mafuta ma nzoi mazalaki ebele o zamba eye bakoti, moto moko te ameki kolia mango, zambi babangi ndai balayaki.
I Sa LinVB 14:27  Kasi Yonatan ayokaki maloba ma tata wa ye te, ntango alayisaki bato ndai. Atomboli lingenda lya ye mpe akotisi nsonge ya lyango o mafuta ma nzoi, mpe atii yango o monoko mwa ye ; miso ma ye mabandi kongenge.
I Sa LinVB 14:28  Moto moko alobi : « Tata wa yo alayisaki bato ndai eye : ‘Azwa bobe moto oyo alei eloko lelo’, yango wana bato banso bale­mbi. »
I Sa LinVB 14:29  Yonatan ayanoli : « Tata wa ngai asalaki ekolo ya biso mabe ! Tala boniboni miso ma ngai makomi komo­no polele awa nameki se mwa mafuta ma nzoi.
I Sa LinVB 14:30  Soko bato banso baliaki lelo biloko biye babotoloki banguna, mbele tozwaki bokasi bwa kolonga ba-Filisti, koleka eye tosalaki bango lelo te ? »
I Sa LinVB 14:31  Mokolo mona balongi ba-Filisti, banda Mikmas tee Ayalon. Bato banso balembi mpenza ;
I Sa LinVB 14:32  bakamati biloko bazwaki o etumba, mpe babomi mpata, ngombe na bana ngombe se o esika enamei ; balei nyama na makila ma yango.
I Sa LinVB 14:33  Bakei koyebisa Saul : « Bato ba­zali kosala lisumu o miso ma Yawe, bazali komele makila ! » Saul alobi : « Bobuki mobeko ; boyela ngai libanga linene sikasikawa. »
I Sa LinVB 14:34  Na nsima alobi na bango : « Bopalangana o kati ya bato mpe boyebisa bango : Moto na moto ayela ngai ngombe to mpata, boboma yango awa mpe bolia yango, kasi bosala lisumu te na bomeli makila. » O butu bona, bato banso bayei na nyama mpe babomi yango o esika ena.
I Sa LinVB 14:35  Saul atongeli Yawe altare ; ezalaki altare ya yambo atongeli Yawe.
I Sa LinVB 14:36  Saul alobi : « Tolanda ba-Filisti na butu mpe tobotolo bango biloko bi­nso tee ntongo sa ; tokotikela bango moto moko te. » Balobi na Saul : « Sala makambo manso olingi. » Kasi nga­nga Nzambe alobi : « Tosengeli liboso kotuna Nzambe. »
I Sa LinVB 14:37  Saul atuni Nza­mbe : « Nakende kolanda ba-Filisti ? Okokaba bango o maboko ma ba-Israel ? » Kasi o mokolo mona Yawe azongiseli ye liloba te.
I Sa LinVB 14:38  Saul alobi : « Bino bankumu ba ekolo, banso bobeleme awa. Bomeka koyeba lisumu nini lisalemaki lelo.
I Sa LinVB 14:39  Lokola Yawe, Mobikisi wa Israel, azali, toyebi ’te moto oyo asalaki lisumu, ata azali mwana wa ngai Yonatan, akokufa ! » O kati ya bato moto moko te azongisi eyano.
I Sa LinVB 14:40  Saul alobi na ba-Israel lisusu : « Bino boteleme epai, ngai na mwana wa ngai Yonatan tokoteleme epai. » Bato balobi na Saul : « Sala lokola omo­ni. »
I Sa LinVB 14:41  Mpe Saul alobi na Yawe : « E Nza­mbe wa Israel, pesa ngai eyano ya solo lelo ! Yawe Nzambe wa Israel, soko ngai moko to mwana wa ngai Yonatan asali mabe, opesa Urim ; soko ekolo ya yo Israel esali mabe, opesa Tumim. » Zeke elakisi Yonatan na Saul, mpe bato bazwi likambo te.
I Sa LinVB 14:42  Saul alobi : « Bobete zeke kati ya ngai na mwana wa ngai Yonatan. » Mpe zeke elakisi Yonatan.
I Sa LinVB 14:43  Saul alobi na Yonatan : « Yebisa ngai nini osalaki. » Yonatan ayebisi ye mpe alobi : « Naliaki se mwa mafuta ma nzoi o nsonge ya li­ngenda lya ngai. Ngai oyo, nandimi kokufa. »
I Sa LinVB 14:44  Saul alobi lisusu : « Nza­mbe asala ngai lokola alingi mpe apesa ngai etumbu eye, likambo te ! Kasi yo Yonatan okokufa ! »
I Sa LinVB 14:45  Kasi bato ba­lobi na Saul : « Yonatan akufa solo, awa apesaki Israel lilonga liye linene ? Tika kosala likambo lya nsomo boye. Soko Yawe azali na bomoi, ata mosuki moko mokolongwa o motó mwa ye te, zambi lelo asalaki mosala na lisalisi lya Nzambe. » Mpe bongo bato babikisi Yonatan ; akufi te.
I Sa LinVB 14:46  Saul atiki kolanda ba-Filisti, mpe ba-Filisti bazongi o mokili mwa bango.
I Sa LinVB 14:47  Awa Saul akomaki mokonzi o Israel, abundi etumba bipai binso na banguna ba ye banso : ba-Moab, ba-Amon, ba-Edom, bakonzi ba Soba na ba-Filisti. Bipai binso azalaki kobu-nda, alongi bango.
I Sa LinVB 14:48  Alakisi mpiko o ntango akweisi ba-Amalek ; abikisi ba-Israel o maboko ma bato bayaki koyibela bango biloko.
I Sa LinVB 14:49  Saul abotaki bana babali : Yonatan, Isio na Malki-Sua. Abotaki mpe bana basi babale : Merab, motomolo, mpe Mikal mozimi wa ye.
I Sa LinVB 14:50  Mwasi wa Saul Akinoam azalaki mwana wa Akimas. Mokonzi monene wa basoda ba ye, nkombo ya ye Abner, mwana wa Ner, oyo azalaki tata mozimi wa Saul.
I Sa LinVB 14:51  Kis, tata wa Saul, na Ner tata wa Abner, bazalaki bana ba Abiel.
I Sa LinVB 14:52  Saul azalaki kobunda makasi na ba-Filisti, bomoi bwa ye mobimba. Soko akuti elombe to moto wa mpiko mpenza, ayingisi ye o mosala mwa soda.
Chapter 15
I Sa LinVB 15:1  Samuel alobi na Saul : « Yawe atindaki ngai napakola yo mafuta mpo ’te okoma mokonzi wa bato ba Israel. Sikawa yoka maloba ma Yawe :
I Sa LinVB 15:2  Yawe wa bokasi bonso alobi boye : Nalingi kopesa etumbu na ba-Amalek, mpo ya mabe basalaki ba-Israel, zambi baboyaki kolekisa bankoko ba bino ntango babimaki o Ezipeti.
I Sa LinVB 15:3  Sikawa, kende mpe boma bato ba Amalek ; boma mpe biloko bya bango binso ; oyokela moto moko mawa te. Boma babali na basi, bana bake na baye bakomele mabéle, na mpe ngombe, mpata, kamela na mpu­nda. »
I Sa LinVB 15:4  Saul asangisi bato banso mpe atali bango moko moko o mboka Telam : basoda ba makalo nkoto nkama ibale, bakisa bato nkoto zomi ba Yuda.
I Sa LinVB 15:5  Ekomi ye penepene na mboka ya Amalek, akei kobombama o lobwaku.
I Sa LinVB 15:6  Alobi na bato ba Keniz : « Bolongwa o kati ya basoda ba Amalek mpo ’te naboma bino elongo na ba­ngo te, zambi bino bosalaki ba-Israel malamu ntango babimaki o Ezipeti. » Bongo bato ba Keniz balongwi o kati ya ba-Amalek.
I Sa LinVB 15:7  Saul abundi na ba-Amalek ut’o Avila tee Sur, o Esti ya Ezipeti.
I Sa LinVB 15:8  Aka­ngi Agag, mokonzi wa ba-Amalek, abomi ye te, kasi abomi bato basusu banso na mopanga.
I Sa LinVB 15:9  Saul na basoda ba ye babikisi Agag, na nyama inso ya kitoko, nyama ike na nyama inene, nyama mafuta na bana mpata ; bi­bwele binso bya kitoko balingi koboma byango te. Kasi babomi nyama inso, iye izalaki ya motuya te.
I Sa LinVB 15:11  « Nayoki motema mawa awa napesaki Saul bokonzi, zambi aboyaki ngai mpe atosaki bitinda bya ngai te. » Samuel ayoki mawa mingi mpe abeleli Yawe butu mobimba.
I Sa LinVB 15:12  Na nta ntongo Samuel akei koluka Saul. Bayebisi Samuel : « Saul ake-ndeki o Karmel, kuna atongi ekeko ; na nsima apusani naino mosika mpe azongi o Gilgal. »
I Sa LinVB 15:13  Samuel akei ko-zwana na Saul, mpe Saul alobi na ye : « Yawe abenisa yo ; natosi etinda ya Yawe. »
I Sa LinVB 15:14  Kasi Samuel atuni ye : « Nini wana, makeléle ma mpata mpe boleli bwa ngombe nazali koyoka na matoi ? »
I Sa LinVB 15:15  Saul ayanoli : « Nyama iye iuti epai ya ba-Amalek mpe bayei na ya­ngo awa, zambi bato balongoli bi­bwele bileki kitoko, mpata na ngo­mbe mpo balingi kobonzela Yawe Nza­mbe wa yo yango. Kasi tobomi nyama isusu inso. »
I Sa LinVB 15:16  Samuel alobi na Saul : « Tika nayebisa yo maye Yawe ayebisaki ngai o butu bwa lelo. » Saul azongisi : « Sakola ! »
I Sa LinVB 15:17  Samuel alobi : « Ata omimoni se mo­to moke, okomi mokambi wa mabota ma Israel, Yawe apakolaki yo mafuta mpo ’te ozala mokonzi wa Israel.
I Sa LinVB 15:18  Apesaki yo etinda eye : ‘Kende kobunda na ba-Amalek, boma bango banso’.
I Sa LinVB 15:19  Mpo nini otosaki monoko mwa Yawe te ? Mpo nini owelaki kobotolo biloko mpe osalaki mabe o miso ma Yawe ? »
I Sa LinVB 15:20  Saul azongisi : « Natosaki monoko mwa Yawe ; nakendeki o esika Yawe atindaki ngai. Nayei na Agag mokonzi wa Amalek awa, mpe nabomaki ba-Amalek banso.
I Sa LinVB 15:21  Bato ba ngai babotoloki bibwele na nyama kitoko isusu, mpo ’te babonzela Yawe Nza­mbe wa yo o Gilgal. »
I Sa LinVB 15:22  Kasi Samuel azongisi : « Yawe alingi nini ? Mabo­nza na miboma, to botosi liloba lya ye ? Solo, botosi boleki mabonza ma­nso ; bolandi nzela ya ye boleki mabonza ma nyama kitoko.
I Sa LinVB 15:23  Koboya Yawe ezali mabe lokola kolanda ba­nzambe ba lokuta ; kosala motó makasi ezali lokola kolanda makambo ma nkisi. Awa otosaki liloba lya Yawe te, Yawe aboyi yo ; okozala mokonzi lisusu te. »
I Sa LinVB 15:24  Saul alobi na Samuel : « Nasalaki li­sumu, nabukaki etinda ya Yawe, naboyaki maloba ma yo ; mpamba te, nabangaki bato mpe nalandaki monoko mwa bango.
I Sa LinVB 15:25  Sikawa nabondeli yo : Limbisa lisumu lya ngai ; zonga elongo na ngai mpo ’te nakende kokumbamela Yawe. »
I Sa LinVB 15:26  Kasi Samuel aya­noli : « Nakozonga na yo lisusu te, zambi okinoli liloba lya Yawe ; Yawe abwaki yo, mpe ozali lisusu mokonzi wa Israel te. »
I Sa LinVB 15:27  Awa Samuel amibo­ngoli mpo ya kokende, Saul asimbi malenda ma monkoto mwa Samuel, mpe malenda malongwi.
I Sa LinVB 15:28  Samuel alobi na ye : « Lelo Yawe abotoli yo bo­konzi o Israel, mpe apesi moto mo­susu bwango, oyo aleki yo na bosembo.
I Sa LinVB 15:29  Yeba ’te Nzambe, ye nke­mbo ya Israel, akobongolaka maloba ma ye te, akozongaka nsima te, lokola biso bato. »
I Sa LinVB 15:30  Saul alobi : « Nasali lisumu, kasi nabondeli yo, oboya ngai te o miso ma bakolo ba ekolo ya ngai mpe ma Israel ntango nakokumbamela Yawe Nzambe wa yo. »
I Sa LinVB 15:31  Samuel azongi elongo na Saul, mpe Saul akei kokumbamela Yawe.
I Sa LinVB 15:32  Samuel alobi : « Benga Agag, mokonzi wa ba-Amalek. » Agag ayei, motema mwa ye mosepeli, zambi amilobeli : « Solo, nsomo ya liwa lilo­ngwi epai ya ngai. »
I Sa LinVB 15:33  Kasi Samuel alobi : « Lokola mopanga mwa yo mo­bomaki bana mpe mokaboli ba­ngo na bamama ba bango, se bongo mama wa yo akokabwana na yo lelo. » Mpe Samuel abomi Agag o Gilgal o miso ma Yawe.
I Sa LinVB 15:34  Samuel akei o Rama, mpe Saul azongi o Gibea, mbo­ka ya ye.
I Sa LinVB 15:35  Samuel amoni lisusu Saul te kin’o mokolo awei. Samuel aleli Saul, kasi Yawe ayoki motema mawa mpo alubolaki Saul mokonzi wa Israel.
Chapter 16
I Sa LinVB 16:1  Yawe alobi na Samuel : « Mikolo boni okozala kolela Saul ? Ngai moko naboyi ye ; akoki kozala mokonzi wa Israel lisusu te. Kamata liseke lya yo, tondisa lyango na mafuta mpe kende epai ya Yese o Beteleme, zambi o kati ya bana ba ye naponi mwana moko azala moko­nzi. »
I Sa LinVB 16:2  Samuel alobi : « Boniboni nakende kuna ? Soko Saul ayoki yango, akoboma ngai ! » Kasi Yawe azongisi : « Okokende na mwana ngombe mpe okoloba : Nayei kobonzela Yawe libonza.
I Sa LinVB 16:3  Okobenga Yese o esika okobonza libonza. Ngai moko nakoyebisa yo nini osengeli kosala. Moto oyo nakolakisa yo, okopakola ye mafuta. »
I Sa LinVB 16:4  Samuel asali lokola Yawe atindaki ye. Awa akomi o Beteleme, bakolo ba mboka bayei kokutana na ye, bayoki nsomo mpe batuni ye : « Profeta, oyeli biso nsango ya boboto ? »
I Sa LinVB 16:5  Samuel azongisi : « Solo, nayei kobonzela Yawe libonza. Bomipetola, bongo na nsima boya kobonza elongo na ngai. » Apetoli Yese na bana ba ye mpe abe-ngi bango o esika ya libonza.
I Sa LinVB 16:6  Ekomi bango o esika esantu, Samuel amoni Eliab, amilobeli : « Nte­mbe te, Yawe aponi oyo. »
I Sa LinVB 16:7  Kasi Yawe alobi : « Otala elongi ya ye mpe bolai bwa ye te. Naponi ye te ! Otala ye na miso ma bato te, bato bakotalaka nzoto, kasi Yawe akotalaka motema. »
I Sa LinVB 16:8  Yese abengi Abinadab mpe akei na ye o boso bwa Samuel. Samuel alobi : « Yawe aponi ye mpe te ! »
I Sa LinVB 16:9  Yese abengi Sama, kasi Samuel alobi : « Yawe aponi ye mpe te. »
I Sa LinVB 16:10  Yese atalisi Samuel bana babali nsambo, kasi Samuel alobi na Yese : « Yawe aponi ata moko wa bango te. »
I Sa LinVB 16:11  Atuni Yese lisusu : « Ozali na bana basusu te ? » Ye azongisi : « Etikali mwana wa nsuka, azali kokengele bibwele o esobe. » Samuel alobi : « Bakende ko­benga ye ; soko ayei te tokolia te. »
I Sa LinVB 16:12  Yese abengi Davidi : azalaki elenge mobali na nsuki itane, miso kitoko mpe nzoto kolongonu. Mpe Yawe alobi : « Ezali ye, pakola ye mafuta. »
I Sa LinVB 16:13  Samuel akamati liseke na mafuta, apakoli ye mafuta o miso ma bandeko ba ye. Mpe uta mokolo mona, elimo ya Yawe ekiteli Davidi. Na nsima Samuel azongi o Rama.
I Sa LinVB 16:14  Elimo ya Yawe elongwi epai ya Saul, mpe elimo ebe ebandi kotungisa ye.
I Sa LinVB 16:15  Basaleli ba Saul balobi na ye : « Elimo ebe ezali kotungisa yo.
I Sa LinVB 16:16  Mokonzi wa biso aloba ; biso basaleli ba yo tokosalisa yo ; tokolukela yo moto moko ayebi kobete nzenze. Ntango elimo ebe eye euti epai ya Yawe ekokotela yo, moto ona abete nzenze, mpe motema mwa yo mokokita. »
I Sa LinVB 16:17  Saul alobi na basaleli ba ye : « Bolukela ngai moto ayebi kobete nzenze ma­lamu mpe boya na ye awa. »
I Sa LinVB 16:18  Mosaleli moko ayanoli : « Nayebi mwana moko wa Yese, moto wa Beteleme, ayebi kobete nzenze, azali elombe, soda wa mpiko, akolobaka malamu, azali mpe na nzoto kitoko. Yawe azali na ye. »
I Sa LinVB 16:19  Saul atindi bantoma epai ya Yese na maloba maye : « Tindela ngai mwana wa yo Davidi, oyo akokengeleke bi­bwele. »
I Sa LinVB 16:20  Yese akei na mpunda, mampa, libenga lya mbeki ya vino na mwana ntaba ; atindi mwana wa ye Davidi ake­nde kopesa Saul ina inso.
I Sa LinVB 16:21  Davidi akomi epai ya Saul, mpe abandi kosalela ye. Saul alingi ye mingi mpe akomisi ye momemi wa bibuneli bya ye.
I Sa LinVB 16:22  Saul atindeli Yese maloba maye : « Tika Davidi azala epai ya ngai mpo ’te asalela ngai, zambi asepelisi ngai mingi. »
I Sa LinVB 16:23  Mpe bongo, mbala inso elimo ebe ya Nzambe ekoteli Saul, Davidi abeteli ye nzenze, mpe motema mwa Saul mokiti, akomi koyoka nzoto malamu mpe elimo ebe elongwi epai ya ye.
Chapter 17
I Sa LinVB 17:1  Ba-Filisti basangisi basoda ba bango mpo ya etumba. Bakei kosangana o mboka Soko o mokili mwa Yuda mpe bapiki nganda kati ya Soko na Azeka o mboka Efes-Damin.
I Sa LinVB 17:2  Saul asangisi ba-Israel, bapiki nga­nda o lobwaku la Gbukulu mpe batandani milongo mpo ya kobunda na ba-Filisti.
I Sa LinVB 17:3  Ba-Filisti bazalaki o ngo­mba yoko, mpe bato ba Israel o ngo­mba esusu ; lobwaku lozalaki o kati.
I Sa LinVB 17:4  Elombe moko abimi o nganda ya ba-Filisti, nkombo ya ye Goliat wa mboka Gat. Bolai bwa nzoto ya ye maboko motoba na ndambo.
I Sa LinVB 17:5  Alati enkoti ya etumba ya mbengi, mpe molato mwa ye mwa etumba moto-ngami na biteni bya bibende. Bozito bwa molato mona bozalaki bwa mitako nkoto itano mya mbengi.
I Sa LinVB 17:6  Azi­ngi makolo ma ye na manzanza ma mbengi, mpe akangi mopanga mwa mbengi o loketo.
I Sa LinVB 17:7  Esimbeli ya liko-ngo lya ye ezalaki lokola nzete ya batongi bilamba, mpe nsonge ya ebende ya likongo ezalaki ya mitako nkama motoba. Moto amemeli ye nguba atamboli liboso lya ye.
I Sa LinVB 17:8  Akei koteleme liboso lya milongo mya ba-Israel mpe agangeli bango : « Mpo nini bolingi kobunda na biso ? Ngai mo-Filisti mpenza, bino basaleli ba Saul ! Bopono moto moko aya kokutana na ngai.
I Sa LinVB 17:9  Soko ye aleki ngai na bokasi o etumba mpe alongi ngai, biso tokozala baombo ba bino ; soko ngai naleki ye na bokasi mpe nalongi ye, bino bokozala baombo ba biso mpe bokosalela biso. »
I Sa LinVB 17:10  Mo-Filisti abakisi : « Lelo tosilisa ntembe biso na ba-Israel. Bopesa moto moko aya kobunda na ngai. »
I Sa LinVB 17:11  Eyoki Saul na ba-Israel banso maloba mana, bale­ngi na nsomo.
I Sa LinVB 17:12  Davidi azalaki mwana wa Yese, moto wa Efrata, o Beteleme ya Yuda. Yese azalaki na bana babali mwambe. O eleko ya Saul, Yese asili akomi mobange mpe akokisi mibu miike.
I Sa LinVB 17:13  Ba­na ba ye basato ba yambo bakendeki mosala mwa soda ; nkombo ya bango : Eliab, motomolo, Abinadab mwana wa babale, na Sama mwana wa basato.
I Sa LinVB 17:14  Davidi azalaki mwana wa nsuka, mpe bana basato ba yambo bake­ndeki kolanda Saul.
I Sa LinVB 17:15  Davidi azalaki kosalela Saul, mpe na nsima azongi o mboka mpo ya kokengele bibwele bya tata wa ye o Beteleme.
I Sa LinVB 17:16  MoFilisti azalaki kobima ntongo mpe mpokwa inso, ayei komilakisa bongo mikolo ntuku inei.
I Sa LinVB 17:17  Yese alobi na mwana wa ye Davidi : « Kende na ngo­to eye ezali na mbuma ya mampa bakalingi, kamata mampa maye zomi mpe kende noki o nganda mpo ’te opesa yango na bandeko ba yo.
I Sa LinVB 17:18  Kamata fromage iye zomi mpe pesa ya­ngo na komanda wa basoda nkoto yoko. Tuna bandeko ba yo soko bazali malamu mpe bapesa yo elembo ’te bazali na bomoi.
I Sa LinVB 17:19  Bazali kuna elongo na Saul mpe na ba-Israel ba­nso o lobwaku la Gbukulu, bazali ko­bunda etumba na ba-Filisti. »
I Sa LinVB 17:20  Davidi alamuki na nta ntongo. Atiki bibwele bya ye o maboko ma mokengeli wa mpata, amemi biloko bya ye mpe akei lokola Yese atindaki, mpe akomi o nganda. Basoda balingi kokende o etumba bagangi migango mya etumba.
I Sa LinVB 17:21  Ba-Israel na ba-Filisti babongisi milongo mya etumba mpe bakomi kotalana.
I Sa LinVB 17:22  Davidi atiki biloko bya ye o maboko ma mokengeli wa biloko ; apoti mbangu epai etu­mba elingi ebanda mpo ’te apesa ba­ndeko ba ye losako.
I Sa LinVB 17:23  Awa azalaki kosolola na bango, elombe Goliat, mo-Filisti wa mboka Gat, abimi o milongo mya ba-Filisti. Alobi se maloba maye alobaki liboso, David ayoki mango.
I Sa LinVB 17:24  Awa bamoni moto oyo, ba-Israel banso babangi mingi mpe bakimi.
I Sa LinVB 17:25  Ba-Israel balobi : « Bomoni moto ona abimi ? Ayei se kotumola ba-Israel. Moto akoboma ye, mokonzi akopesa ye biloko mi­ngi ; akobalisa ye mwana wa ye mpe bandeko ba ye bakofuta mpako o Israel lisusu te. »
I Sa LinVB 17:26  Davidi atuni baye bazalaki penepene na ye : « Bakosala nini na moto oyo akoboma mo-Filisti mpe akolo-ngola nsoni o Israel ? Mo-Filisti oyo, akatemi nzoto te, ye nde nani mpo ’te atumola basoda ba Nzambe wa bomoi ? »
I Sa LinVB 17:27  Bato bayanoli ye se bongo : « Moto akoboma ye, bakosala ye lokola tolobaki. »
I Sa LinVB 17:28  Motomolo wa ye Eliab ayoki ’te azalaki kosolola na basoda, ayokeli ye nkanda mpe alobi : « Mpo nini oyei awa ? Otiki mpata ya yo o esobe o maboko ma nani ? Nayebi lolendo la yo mpe mayele mabe ma yo. Oyaki awa se mpo ’te otala bitumba ! »
I Sa LinVB 17:29  Davidi azongisi : « Mabe nini nasali ? Bongo nakoki kotuna lisusu te ? »
I Sa LinVB 17:30  Davidi atiki ye mpe akei kosolola na moto mosusu. Atuni motuna se moko mpe bazongiseli ye se lokola mbala ya liboso.
I Sa LinVB 17:31  Kasi bato basusu bayokaki maloba ma Davidi, bakei koyebisa Saul mango. Saul abe­ngi ye.
I Sa LinVB 17:32  Davidi alobi na Saul : « Moto moko abanga mo-Filisti oyo te. Ngai mo­saleli wa yo nakokende kobunda na ye. »
I Sa LinVB 17:33  Saul alobi na Davidi : « Yo okoki kokende kobunda na mo-Filisti oyo te, ozali se mwana, ye nde ameseni na bitumba ut’o bomwana. »
I Sa LinVB 17:34  Kasi Davidi alobi na Saul : « Ngai, mosaleli wa yo, nazalaki kokengele mpata ya tata wa ngai ; soko ntambwe to nkoi eyei koyiba mpata o lopango,
I Sa LinVB 17:35  na­landaki yango, nabeteki yango mpe nabotoloki mpata o monoko mwa yango. Awa elingaki kokanga ngai, nakangaki yango na mbanga mpe nabeteki yango tee ekufi.
I Sa LinVB 17:36  Ngai mosaleli wa yo nabomaki ntambwe na nkoi, nakosala se bongo na mo-Filisti mosutu oyo, zambi aluki basoda ba Nzambe na makambo. »
I Sa LinVB 17:37  Davidi alobi lisusu : « Yawe oyo abikisaki ngai o manzaka ma ntambwe mpe ma nkoi, akobikisa ngai mpe o maboko ma mo-Filisti oyo. » Saul alobi na Davidi : « Kende, Yawe azala na yo. »
I Sa LinVB 17:38  Saul alatisi Davidi monkoto mwa ye mwa soda, enkoti ya mbengi na bilamba bisusu bya etumba.
I Sa LinVB 17:39  Mpe likolo lya monkoto mwa ye akangi mopanga mwa ye ; Davidi ameki kotambola na byango, kasi akoki te, zambi ameseni na byango te. Alobi na Saul : « Nakoki kotambola boye te, zambi nameseni na byango te. » Bo­ngo balongoli ye bilamba bina.
I Sa LinVB 17:40  Davidi asimbi lingenda o maboko. O moluka akei koluka mabanga seliseli matano, abombi mango o libenga ; amemi mpe bilingongo mpe akei kokutana na mo-Filisti.
I Sa LinVB 17:41  Goliat abelemi, alandi soda oyo amemeli ye nguba mpo ya kobatela ye, akomi penepene na Davidi.
I Sa LinVB 17:42  Ntango mo-Filisti akomi komono Davidi, atali ye swii mpe akinoli ye, mpo Davidi azalaki se elenge, nsuki motane mpe elo­ngi kitoko.
I Sa LinVB 17:43  Alobi na Davidi : « Nazali nde mbwa mpo ’te oya kobunda na ngai na lingenda ? » Mpe abeteli Davidi mobondo o nkombo ya ba­nzambe ba ye.
I Sa LinVB 17:44  Alobi lisusu na Davidi : « Yaka pene na ngai, napesa ndeke ya likolo mpe nyama ya zamba misuni mya yo ! »
I Sa LinVB 17:45  Kasi Davidi azo­ngiseli mo-Filisti : « Yo oyeli ngai etu­mba na mopanga, na likongo mpe na makula ; kasi ngai nakobunda na yo o nkombo ya Yawe wa mampinga, mokonzi wa basoda ba Israel. Yo moko oluki bango na etumba.
I Sa LinVB 17:46  Le­lomei Yawe akokaba yo o maboko ma ngai, nakoboma yo mpe nakokata yo nki­ngo ; bobele lelo nakopesa bibembe bya ba-Filisti na ndeke ya likolo mpe na nyama ya zamba. O nse mobimba bakoyeba ’te o Israel Nzambe azali.
I Sa LinVB 17:47  Mpe bato banso basangani awa, bakoyeba ’te Yawe akolongisa bato na mopanga to na likongo te. Yawe akokamba etumba mpe ye akokaba bino o maboko ma biso. »
I Sa LinVB 17:48  Awa mo-Filisti apusani mpe ayei epai ya Davidi, Davidi abimi o milo-ngo mya basoda mpe akei kokutana na ye.
I Sa LinVB 17:49  Atii loboko o libenga, akamati libanga lyoko, mpe na bilingo­ngo ya ye abwakeli ye libanga. Azokisi ye o elongi ; libanga likoteli ye o motó ; akwei elongi o nse.
I Sa LinVB 17:50  Davidi alongi bongo mo-Filisti na bilingo­ngo mpe na libanga. Abeti mpe abomi ye ata azalaki na mopanga o maboko te.
I Sa LinVB 17:51  Apoti mbangu epai ya mo-Filisti, atelemi o nzoto ya ye, akamati mopanga mwa ye mpe akati ye nkingo. Emoni ba-Filisti ’te elombe wa ba­ngo akufi, bakimi.
I Sa LinVB 17:52  Bato ba Israel mpe ba Yuda batelemi mpe bagangi migango mya etumba, babengani ba-Filisti tee o mboka Gat, tee o ezibeli ya mboka Ekron. Bipai binso bibe­mbe bya ba-Filisti bilali o nzela, ut’o Saraim tee Gat na Ekron.
I Sa LinVB 17:53  Ba-Israel batiki kobengana ba-Filisti mpe bazongi o nganda ya bango, babotoli bango biloko binso.
I Sa LinVB 17:54  Davidi akamati motó mwa mo-Filisti mpe amemi mwango o Yeruzalem, akei na bibuneli bya ye o ema ya ye moko.
I Sa LinVB 17:55  Emonoki Saul boniboni Davidi akendeki kobundisa mo-Filisti, atunaki Abner, komanda wa basoda : « Abner, elenge mobali oyo, ye mwana wa nani ? » Abner azongisaki : « E mokonzi, ya solo mpenza, nayebi ye te ! »
I Sa LinVB 17:56  Mokonzi alobaki : « Kende kotuna soko elenge mobali oyo azali mwana wa nani ! »
I Sa LinVB 17:57  Euti Davidi koboma mo-Filisti, Abner akei na ye epai ya Saul ; amemi motó mwa mo-Filisti o maboko.
I Sa LinVB 17:58  Saul atuni ye : « Ele­nge mobali, yo mwana wa nani ? » Davidi azongisi : « Nazali mwana wa mosaleli wa yo Yese, moto wa Beteleme. »
Chapter 18
I Sa LinVB 18:1  Esilisi Davidi kosolola na Saul, Yonatan abandi kolinga Davidi ; alingi ye solo lokola amilingi ye moko.
I Sa LinVB 18:2  Mokolo monamei Saul afa­ndisi Davidi o ndako ya ye mpe alingi te ’te azonga o ndako ya tata wa ye.
I Sa LinVB 18:3  Yonatan akati bondeko na Davidi, zambi alingaki ye lokola amilingi ye moko.
I Sa LinVB 18:4  Yonatan alongoli mo­nkoto mwa ye mpe apesi Davidi mwango ; apesi ye mpe bilamba bisusu, ná mopanga, ná litimbo ná mokaba mwa ye.
I Sa LinVB 18:5  Bipai binso Saul azalaki kotinda Davidi, makambo ma Davidi mazalaki bobele kotambola malamu. Yango wana Saul atii ye komanda wa basoda ba ye. Bato banso balingaki ye mingi, basaleli ba Saul bandimaki ye lokola.
I Sa LinVB 18:6  Ntango Davidi auti koboma mo-Filisti mpe azongi o mboka, basi ba mboka inso ya Israel bayei kokutana na mokonzi Saul, babini mpe baye-mbi na nzenze mpe na mbonda.
I Sa LinVB 18:7  Basi bazalaki kobina bayembi boye : « Saul abomaki bato nkoto, Davidi abomi bango nkoto zomi. »
I Sa LinVB 18:8  Saul asiliki mpe ayoki nkanda mpenza mpo ya maloba ma nzembo ena. Alobi : « Mpo ya Davidi batangi bato nkoto zomi, mpo ya ngai bobele nkoto yoko ; etikali se ’te abotolo bokonzi. »
I Sa LinVB 18:9  Uta mokolo mona Saul ayokeli Davidi zuwa linene.
I Sa LinVB 18:10  Mokolo mwa nsima elimo ebe ekoteli Saul ; abandi koloba maloba ma nkanda o ndako ya ye. Davidi azalaki kobete nzenze lokola akosalaka mikolo misusu minso ; Saul azalaki na likongo o maboko.
I Sa LinVB 18:11  Saul atomboli likongo mpe amilobeli : « Nakotubola Davidi, likongo likanga ye o efelo. » Kasi Davidi amibendi mpe abiki bongo mbala ibale.
I Sa LinVB 18:12  Saul akomi kobanga Davidi ; mpa­mba te, Yawe azalaki na ye mpe asili koboya Saul.
I Sa LinVB 18:13  Yango wana Saul alongoli Davidi o ndako ya ye mpe atii ye komanda wa basoda nkoto : atambola na bango elongo mpe aya­ngela bango.
I Sa LinVB 18:14  Davidi azalaki kosu­kisa misala minso se malamu, mpe Yawe azalaki na ye.
I Sa LinVB 18:15  Awa amoni ’te Davidi azalaki kolonga o makambo manso, Saul abandi kobanga ye.
I Sa LinVB 18:16  Bato banso ba Israel mpe ba Yuda bali­ngi Davidi mingi, zambi azalaki seko kotambola na bango elongo mpe koyangela bango.
I Sa LinVB 18:17  Saul alobi na Davidi : « Tala mwana wa ngai wa yambo Merab ; obala ye, kasi osalela ngai na mpiko mpe obunda bitumba bya Yawe. » Saul ami­lobelaki : « Ekoki te ’te ngai naboma ye, kasi ba-Filisti baboma ye. »
I Sa LinVB 18:18  Davidi azongisi : « Ngai nde nani mpe libota lya ngai, etuka ya tata wa ngai nde nini ’te nakoma bokilo wa mokonzi ? »
I Sa LinVB 18:19  Kasi awa elaka ya kobalisa Davidi mwana wa ye Merab ekoki, Saul abalisi ye na Adriel, moto wa Mekolat.
I Sa LinVB 18:20  Mikal, mwana wa Saul, akomi ko­linga Davidi. Bayebisi Saul mpo ya­ngo, esepelisi ye te.
I Sa LinVB 18:21  Amilobeli : Nakobalisa ye mwana wa ngai, lokola motambo nakotiela ye mpo ’te ba-Filisti baboma ye. Saul alobi bongo na Davidi mbala ibale : « Lelo okozala bokilo wa ngai. »
I Sa LinVB 18:22  Saul apesi basaleli ba ye etinda eye : « Bosolola na Davidi na bonkutu mpe bolobela ye : Mokonzi alingi yo mingi mpe basaleli ba ye balingi yo lokola ; malamu okoma bokilo wa mokonzi. »
I Sa LinVB 18:23  Basaleli ba Saul bakei koyebisa Davidi, kasi Davidi azongisi : « O miso ma bino, kokoma bokilo wa mokonzi ezali nde likambo like ? Ngai nazali se mobola, wa libota like. »
I Sa LinVB 18:24  Basaleli ba Saul bakei koyebisa ye : « Yoka maloba Davidi alobaki. »
I Sa LinVB 18:25  Saul azongisi : « Boloba na Davidi : Ngai mokonzi nalingi mo­solo mwa libala te ; nalingi se misutu monkama mya ba-Filisti mpo ’te nazongisela bango mabe basalaki ngai. » Saul azalaki kolikya ’te Davidi akweya o maboko ma ba-Filisti.
I Sa LinVB 18:26  Ntango basaleli ba Saul bakei koyebisa Davidi maloba mana, Davidi andimi kosala bongo mpo ’te akoma bokilo wa mokonzi. Ata elaka ekoki naino te,
I Sa LinVB 18:27  Davidi amilengeli mpo ya etumba mpe akei elongo na bato ba ye. Abomi ba-Filisti nkama ibale, ame­mi misutu mya bango mpe ata­ngi myango o miso ma mokonzi, mpo ’te akoma bongo bokilo wa ye. Saul abalisi ye mwana wa ye Mikal.
I Sa LinVB 18:28  Saul amoni polele ’te Yawe azalaki na Davidi, ayebi ’te mwana wa ye Mikal alingi Davidi.
I Sa LinVB 18:29  Bongo Saul apusi naino kobanga Davidi mpe akomi koyina ye seko.
I Sa LinVB 18:30  Bankumu ba Filisti babimisi bitumba. Mbala inso babundi etumba, Davidi alongi ba­ngo, aleki mpe bakomanda banso ba Saul na bozwi lilonga. Yango wana azwi lokumu lonene.
Chapter 19
I Sa LinVB 19:1  Saul ayebisi Yonatan, mwana wa ye, na mpe basaleli ba ye banso ’te akani koboma Davidi. Kasi Yonatan, mwana wa Saul, azalaki kolinga Davidi mingi.
I Sa LinVB 19:2  Yango wana akei kokebisa Davidi : « Tata wa ngai Saul azali koluka koboma yo, bongo keba lobi na ntongo ; kende komibomba, obima te.
I Sa LinVB 19:3  Ngai nakobima o mboka elongo na tata ; soko tokomi pene na esika obombami, ngai nakobondela tata mpo ya yo ; nakoyoka nini akoloba ; na nsima nakoyebisa yo. »
I Sa LinVB 19:4  Yonatan atangeli tata wa ye Saul malamu manso Davidi asalaki, alobi : « Mokonzi, osala mosaleli wa yo Davidi mabe te, asalaki yo mabe moko te ; kutu, maye asalaki mabongeli yo mingi.
I Sa LinVB 19:5  Abangaki liwa te, abomaki mo-Filisti mpe Yawe abikisi Israel mobimba. Yo moko omonoki yango mpe osepelaki. Bongo osala nde mabe na bobomi moto oyo azali na likambo te, awa olingi liwa lya Davidi, ntina te ? »
I Sa LinVB 19:6  Saul ayoki maloba ma Yonatan mpe alayi ndai : « Lokola Yawe azali na bomoi, Davidi akokufa te. »
I Sa LinVB 19:7  Na nsima Yonatan abengi Davidi mpe ayebisi ye maloba mana manso. Bakei epai ya Saul, mpe Davidi asaleli Saul lisusu lokola liboso.
I Sa LinVB 19:8  Awa etumba ebandi lisusu, Davidi amilengeli mpe akei kobunda na ba-Filisti ; anyati bango mpe banso bakimi.
I Sa LinVB 19:9  Mokolo mosusu elimo ebe euti epai ya Yawe, ekoteli Saul. Afandi o ndako ya ye likongo o maboko, Davidi azalaki kobete nzenze.
I Sa LinVB 19:10  Saul ameki kobwakela ye likongo mpe kokangisa ye o efelo ya ndako. Kasi Davidi amibongoli ntango Saul ameki kobaka ye o efelo na likongo, liye apiki o efelo. David akimi mbangu mpe alongwi na butu bona.
I Sa LinVB 19:11  Saul atindi bato mpo ’te bakengele ndako ya Davidi mpo ’te baboma ye o mokolo mwa nsima na ntongo. Kasi Mikal, mwasi wa Davidi, akebisi ye mpe alobi : « Soko okimi lelo na butu te, bakoboma yo lobi. »
I Sa LinVB 19:12  Mikal akitisi Davidi ut’o lininisa. Bongo Da­vidi akimi mpe abiki.
I Sa LinVB 19:13  Mikal akamati ekeko ya ndako, atii yango o mbeto, akamati nsuki ya ntaba, atandi yango malamu o motó mwa mbeto mpe azipi yango na ela­mba.
I Sa LinVB 19:14  Saul atindi bato mpo ’te ba­kanga Davidi, mpe Mikal alobi na bango­ : « Azali kobele. »
I Sa LinVB 19:15  Kasi Saul atindi lisusu bato bakende kotala Davidi, alobi na bango : « Bomeme ye likolo lya mbeto, bongo nakoboma ye. »
I Sa LinVB 19:16  Ekoti bango o ndako, bamoni ekeko ya ndako elali o mbeto mpe nsuki ya ntaba epai ya motó.
I Sa LinVB 19:17  Saul atuni Mikal : « Mpo nini okosaki ngai mpe otikaki monguna wa ngai akima boye ? » Mikal ayanoli Saul : « Ye moto alobaki na ngai : Tika ngai nakende, soki te nakoboma yo. »
I Sa LinVB 19:18  Davidi akimi, akei epai ya Samuel o Rama mpe ayebisi ye manso Saul asalaki ye. Bango na Samuel bakei kofanda o ndako ya makita.
I Sa LinVB 19:19  Bayebisi Saul : « Davidi azali o ndako ya makita o mboka Rama. »
I Sa LinVB 19:20  Saul atindi bato bakanga Davidi. Kuna bamoni lingomba lya baprofeta bazalaki kosakola makambo, Samuel azalaki kokamba bango. Elimo ya Nzambe eko­teli mpe bato ba Saul ; bango mpe babandi kosakola.
I Sa LinVB 19:21  Bayebisi Saul ; ye atindi bato basusu, kasi bango mpe babandi kosakola. Saul atindi bato ba­susu mbala ya isato, bango baba­ndi kosakola lokola.
I Sa LinVB 19:22  Sikawa Saul yemei akei o Rama mpe akomi o liziba linene lizali o Seku. Atuni : « Wapi esika Samuel na Davidi bakofandaka ? » Bazongisi : « Bazali o Rama o ndako ya makita. »
I Sa LinVB 19:23  Bongo akei o ndako ya makita o Rama. Elimo ya Nzambe ekoteli ye lokola ; o nzela azalaki se kosakola makambo tee akomi o ndako ya makita o Rama.
I Sa LinVB 19:24  Ye mpe alongoli bilamba mpe asakoli bongo o miso ma Samuel. Na nsima akwei bolumbu o nse mpe alali wana moi mobimba mpe butu mobimba. Yango wana bato bakolobaka : « Saul azali moko wa baprofeta ? »
Chapter 20
I Sa LinVB 20:1  Davidi akimi ndako ya makita o Rama mpe akei kotuna Yonatan : « Nasali nini ? Wapi mabe ma ngai mpe lisumu nini nasalaki ona tata wa yo mpo aluka koboma ngai ? »
I Sa LinVB 20:2  Yonatan azongisi : « Tika kokanisa bongo ! Okokufa te. Tata wa ngai akoki kosala likambo lyoko te soko ayebisi ngai liboso te. Mpo nini tata wa ngai abombela ngai likambo lya­ngo ? Ekoki kosalema soki te. »
I Sa LinVB 20:3  Davidi alayi ndai eye : « Tata wa yo ayebi malamu ’te yo olingi ngai mingi, bo­ngo amilobeli : Yonatan akoki koyeba eloko te mpo ’te ayoka motema mpasi te. Kasi, lokola Yawe azali na bomoi mpe lokola yo ozali na bomoi, liwa lya ngai lizali mosika te. »
I Sa LinVB 20:4  Yonatan alobi na Davidi : « Olingi nasala nini mpo ya yo ? »
I Sa LinVB 20:5  Davidi ayanoli : « Lobi sanza ya sika ekobima, nasengeli kolia esika yoko na mokonzi. Kasi yo salisa ngai nakende kobombama o esobe tee ndele na mpokwa.
I Sa LinVB 20:6  Soko tata wa yo amoni ’te ngai nazali te, loba na ye : Davidi abondeli ngai ’te nalingisa ye akende o mboka ya ye Beteleme, zambi kuna bakobonza libonza lya libota, lokola bakosalaka mobu na mobu.
I Sa LinVB 20:7  Soko mokonzi alobi : ‘Malamu !’, ngai mo­saleli wa yo nabiki ; kasi soko abandi kosilika, yeba ’te alingi koboma ngai.
I Sa LinVB 20:8  Sala ngai mosaleli wa yo malamu, mpo okataki na ngai bondeko o miso ma Yawe. Kasi soko nasali mabe, yo moko boma ngai ; mpo nini nabimela tata wa yo boye ? »
I Sa LinVB 20:9  Yonatan alobi : « Tika kokanisa bongo. Soko nayebaki solo ’te tata wa ngai akaneli yo, ntembe te mbele nayebisaki yo. »
I Sa LinVB 20:10  Davidi atuni Yonatan : « Nani akoyebisa ngai soko tata wa yo apesi eyano ebe ? »
I Sa LinVB 20:11  Yonatan alobi na Davidi : « Yaka, tokende o esobe », mpe bango babale bakei o esobe.
I Sa LinVB 20:12  Yonatan alobi na Davidi : « Yawe Nzambe wa Israel akoyoka ngai ! Nakomeka koyeba mayele ma tata wa ngai, lobi to ndele o ngonga eyemei. Soko makambo mabongeli yo Davidi mpe soko nayebisi yo nsango te,
I Sa LinVB 20:13  Yawe akoki kosala ngai Yonatan lokola alingi mpe kopesa ngai etumbu. Soko tata wa ngai alingi bobele kosala yo mabe, ngai nakoyebisa yo mpe nakosalisa yo mpo okima mpe olongwa awa na boboto. Yawe azala na yo lokola azalaki na tata wa ngai !
I Sa LinVB 20:14  Ntembe te, soko nazali naino na bomoi, olakisa ngai bolingi bwa Yawe ; kasi soko nakufi,
I Sa LinVB 20:15  otika te kolinga libota lya ngai. Esika Yawe akolongola banguna ba yo banso o mokili,
I Sa LinVB 20:16  nkombo ya Yonatan mpe ya libota lya Saul ilongwa te. Soki te, Yawe akotuna Davidi. »
I Sa LinVB 20:17  Na nsima Yonatan alayeli Davidi lisusu ndai ’te akosala yango, mpo azalaki kolinga ye na motema moko.
I Sa LinVB 20:18  Yonatan alobi na ye : « Lobi sanza ya sika ekobima. Bakomono ’te ozali te, zambi kiti ya yo ekotikala mpa­mba.
I Sa LinVB 20:19  Ndele banso bakomono ’te oza­li te ; bongo okende o esika obo­mbamaki mokolo mosusu, ofanda kuna penepene na libanga nkombo ’te Ezel.
I Sa LinVB 20:20  Ngai nakobete makula masato epai kuna, nakosala lokola nali­ngi koboma nyama.
I Sa LinVB 20:21  Na nsima nakoti­nda elenge mobali akende kolokoto mango. Soko nalobi na ye : ‘Makula makwei liboso lya yo, lokoto mango’, yo okoki kobima, kitisa motema : ekolakisa ’te ntina ya kobanga ezali te, ezali ya solo, lokola Yawe azali na bomoi.
I Sa LinVB 20:22  Kasi soko nalobi na elenge mobali : ‘Makula makwei nsima ya yo’, yeba ’te osengeli kokende, za­mbi Yawe atindi ’te okima.
I Sa LinVB 20:23  Mpo ya liloba tolobanaki, Yawe azali o kati ya biso babale seko. »
I Sa LinVB 20:24  Davidi akei komibomba o esobe. Sanza ya sika ebimi mpe mokonzi akei kofanda o meza mpo ya kolia.
I Sa LinVB 20:25  Mokonzi afandi o esika ameseni kofanda, o kiti penepene na efelo ya ndako. Yonatan atelemi wana. Abner akei kofanda o mopanzi mwa Saul ; kasi kiti ya Davidi etikali mpamba.
I Sa LinVB 20:26  O mokolo mona Saul alobi liloba lyoko te, akanisi : « Mbele azwi lika­mbo, azali peto te. »
I Sa LinVB 20:27  Mokolo nsima ya sanza ya sika, kiti ya Davidi etikali mpamba Saul alobi na mwana wa ye Yonatan : « Mpo nini mwana wa Yese ayaki kolia limpati te, lobi na mpe lelo ? »
I Sa LinVB 20:28  Yonatan azongisi : « Davidi abondeli ngai napesa ye nzela ya kokende o Beteleme.
I Sa LinVB 20:29  Alobaki : Nabondeli yo, tika ngai nakende o mboka ya ngai, zambi tokobonza libonza lya libota, mpe ndeko wa ngai abengi ngai ; sikawa, soko olingi, tika ngai nakende kotala bandeko ba ngai. Ya­ngo wana ayaki kolia o meza ya mokonzi te. »
I Sa LinVB 20:30  Saul asilikeli Yonatan makasi mpe alobi na ye : « Yo mwana wa bondu-mba, nayebi malamu ’te okolongisa bobele mwana wa Yese : nsoni na yo mpe na mama wa yo !
I Sa LinVB 20:31  Mikolo mi­nso mwana wa Yese akozala o mokili, okozala na boboto te, bokonzi bwa yo mpe te. Sikawa kende koluka ye mpe tinda bato baya na ye awa, mpo akoki na liwa. »
I Sa LinVB 20:32  Yonatan atuni tata wa ye Saul : « Baboma ye ntina nini ? Asali nde nini ? »
I Sa LinVB 20:33  Saul akamati liko­ngo lya ye mpo ’te abete ye. Bongo Yonatan ayebi sikawa ’te tata wa ye akani solo koboma Davidi.
I Sa LinVB 20:34  Yonatan ayoki nkanda enene, alongwi o meza mpe alei eloko te o mokolo mona mwa mibale mwa sanza ya sika, mpo ayoki motema mpasi mingi mpo ya Davidi, zambi tata wa ye afingaki ye.
I Sa LinVB 20:35  Mokolo mwa nsima na ntongo, Yonatan akei o esobe mpo akutana na Davidi, akei elongo na mwana mobali.
I Sa LinVB 20:36  Alobi na ye : « Pota mbangu mpe kende koluka makula maye nalingi kobete. » Mwana mobali apoti mba­ngu mpe Yonatan abeti likula makasi mpo ’te lileka ye.
I Sa LinVB 20:37  Mwana mobali akomi o esika likula likwei mpe Yonatan abeleli ye, alobi : « Likula likwei liboso lya yo te ? »
I Sa LinVB 20:38  Agangi lisusu na mongongo makasi : « Kende noki ! Oteleme te ! » Mosali wa Yonatan alokoti likula mpe azongisi lyango na nkolo wa ye.
I Sa LinVB 20:39  Mosali ayebi likambo lyoko te, bobele Yonatan na Davidi bayebi ntina ya likambo lina.
I Sa LinVB 20:40  Yonatan apesi bibuneli bya ye o maboko ma mosali mpe alobi na ye : « Kende kozongisa byango o mboka. » Mosali azongi o mboka.
I Sa LinVB 20:41  Davidi abimi epai abombamaki nsima ya liba­nga, akwei elongi o nse mpe akumbami mbala isato ; na nsima bayambani o maboko mpe bango babale baleli, kasi Davidi apusi kolela makasi.
I Sa LinVB 20:42  Yonatan alobi na Davidi : « Kende na boboto, zambi biso babale tolayelanaki ndai o miso ma Yawe boye : Yawe azala o kati ya biso babale, o kati ya bana ba yo na bana ba ngai seko. »
Chapter 21
I Sa LinVB 21:1  Davidi atelemi mpe akei ; Yonatan azongi o mboka ya ye.
I Sa LinVB 21:2  Davidi akomi o Nob epai ya nganga Nzambe Akimelek. Akimelek ayei kozwana na Davidi, alengi na nsomo mpe atuni ye : « Mpo nini ozali se yo moko mpe moto mosusu azali na yo te ? »
I Sa LinVB 21:3  Davidi ayanoli nganga Nzambe Akimelek : « Mokonzi apesaki ngai etinda mpe alobaki na ngai : Moto moko te ayeba mosala natindi yo mpe etinda napesi yo. Nayokani na bilenge babali baye balandi ngai ’te tokokutana o esika yoko.
I Sa LinVB 21:4  Sikawa, soko ozali na bilei, pesa ngai ma­mpa matano to ata eloko nini. »
I Sa LinVB 21:5  Nga­nga Nzambe alobi : « Mampa ma mpa­mba mazali awa te, nazali se na mampa masantu ; bato ba yo bakoki kolia mango bobele soko balalaki na mwasi te. »
I Sa LinVB 21:6  Davidi ayanoli nganga Nzambe : « Solo mpenza, bakilisi biso basi, se lokola o ntango tokendeki etumba, bato ba ngai bazali nzoto peto. Ata mobembo mwa lelo mozalaki se mobembo mpamba, ya solo, banso tozali na mbindo te. »
I Sa LinVB 21:7  Bongo nganga Nza­mbe apesi bango mampa masa-ntu, zambi mampa masusu mazalaki te, se mampa ma libonza maye bakolongolaka o meza ya Yawe mpo ya kotia mampa masusu ma sika o esika ya mango.
I Sa LinVB 21:8  Nzokande se o mokolo monamei, moko wa basaleli wa Saul azalaki wana, atikali wana mpo ya Yawe. Nko­mbo ya ye Doeg, moto wa Edom, kapita wa bakengeli ba mpata ya Saul.
I Sa LinVB 21:9  Davidi atuni Akimelek : « Awa ozali na likongo to na mopanga te ? Ngai nayei na mopanga mpe bibuneli bya ngai te, zambi etinda ya mokonzi ezalaki ya mbangumbangu. »
I Sa LinVB 21:10  Nganga Nzambe azongisi : « Awa tozali na mopanga mwa Goliat, mo-Filisti oyo obomaki o lobwaku la Gbukulu ; mozingami na monkoto nsima ya efod. Soko olingi mwango, kamata mwango, mopanga mosusu mozali awa te. » Davidi alobi : « Mopanga mosusu mwa motindo mona mozali te, pesa ngai mwango. »
I Sa LinVB 21:11  Mokolo mona Davidi akimi mosika na Saul. Akomi epai ya Akis, mokonzi wa Gat.
I Sa LinVB 21:12  Kasi basaleli ba Akis balobi na ye : « Oyo nde Davidi, mokonzi wa ekolo te ? Mpo ya ye bato babinaki mabina mpe bayembaki : Saul abomaki bato nkoto, kasi Davidi abomaki bato nkoto zomi. »
I Sa LinVB 21:13  Eyoki Davidi maloba mana, aba­ndi kobanga Akis, mokonzi wa Gat.
I Sa LinVB 21:14  Bongo o miso ma bango akosi ’te azali na ligboma, abandi kolobaloba maloba mazangi ntina, na misapi ako­mi bilembo o ezibeli ya ndako, mpe nsoi ya monoko ekomi kokita o mandefu ma ye.
I Sa LinVB 21:15  Akis alobi na basali ba ye : « Bino moko bomoni ’te akomi na ligboma. Mpo nini boyei na ye awa epai ya ngai ?
I Sa LinVB 21:16  Nazangi nde bato ba ligboma mpo ’te boya na ye awa kotungisa ngai na makambo ma ye ma bozoba. Moto oyo akoki nde kokoto o ndako ya ngai ? »
Chapter 22
I Sa LinVB 22:1  Davidi alongwi kuna mpe akei kobombama o mobenga mwa Adulam. Bandeko ba ye na bato banso ba libota lya tata wa ye bayoki likambo lina mpe bakei kokutana na ye.
I Sa LinVB 22:2  Bato banso bazalaki na makambo, baye bazalaki na nyongo na baye ba motema nkanda, bakei ko­landa ye ; akomi bongo mokambi wa bango. Bazalaki bato soki nkama inei.
I Sa LinVB 22:3  Elongwi ye kuna, Davidi akei o Mispe o mokili mwa Moab. Alobi na mokonzi mwa Moab : « Lingisa tata na mama wa ngai bafanda epai ya yo tee mokolo nakoyeba soko Nzambe akosala ngai nini. »
I Sa LinVB 22:4  Akei na bango epai ya mokonzi wa Moab ; bango bafandi kuna eleko enso Davidi azalaki kobombama.
I Sa LinVB 22:5  Profeta Gad alobi na Davidi : « Otikala seko o esika ya kobombama te, kasi kende mpe zonga o mokili mwa Yuda. » Davidi alongwi kuna mpe akei kofanda o zamba lya Keret.
I Sa LinVB 22:6  Saul ayoki ’te Davidi na baninga ba ye bamononi. Saul azalaki o Gibea, afandi o nse ya nzete ya tamaris, eye ezalaki o mwa ngomba, likongo o loboko ; bakomanda banso ba basoda batelemi penepene na ye.
I Sa LinVB 22:7  Saul alobi na bakomanda baye batelemi penepene na ye : « Bato ba Benyamin, boyoka ngai malamu ! Mwana wa Yese akopesa bino nde bilanga na nzete ya vino ? Akotia bino banso nde bayangeli ba basoda nkoto to nkama ?
I Sa LinVB 22:8  Bi­no banso boyokani ’te bokoto­mbokela ngai ! Moto moko te ayebisi ngai ’te mwana wa ngai azali koyokana na mwana wa Yese ; moto moko te ayokeli ngai mawa mpe ayebisi ngai ’te mwana wa ngai akomisi mosaleli wa ngai monguna wa ngai mpenza, lokola emononi lelo. »
I Sa LinVB 22:9  Doeg, moto wa Edom, oyo afandi penepene na bakomanda ba Saul, alobi : « Namonoki mwana wa Yese ; ayaki o Nob epai ya Akimelek, mwana wa Akitub.
I Sa LinVB 22:10  Akimelek atunaki Yawe mpo ya ye, apesaki ye mpe bilei na mpe mopanga mwa mo-Filisti Goliat. »
I Sa LinVB 22:11  Saul abengi Akimelek, mwana wa Akitub, na libota lya ye mobi­mba, na mpe banganga Nzambe ba Nob. Banso bakei epai ya mokonzi.
I Sa LinVB 22:12  Saul alobi : « Yoka, mwana wa Aki­tub ! » Oyo ayanoli : « Mokonzi, loba. »
I Sa LinVB 22:13  Saul atuni ye : « Mpo nini bino na mwana wa Yese boyokani ’te bokotombokela ngai ? Opesaki ye mampa na mopanga mpe otunaki Yawe mpo ya ye mpo ’te akoma mo­nguna wa ngai, atiela ngai mitambo lokola emononi lelo. »
I Sa LinVB 22:14  Akimelek azo­ngiseli mokonzi : « O kati ya basaleli ba yo banso, moto moko azali na botosi lokola Davidi ? Azali bokilo wa mokonzi, azali mokengeli wa yo mpe bato banso ba ndako ya yo bakokumisaka ye.
I Sa LinVB 22:15  Ezali nde lelo ’te nabandaki kotuna Yawe mpo ya ye ? Nazalaki na makanisi mabe soki moke te. E mokonzi, tika kokanisa ’te ngai mosaleli wa yo to bandeko ba ngai tosali mabe, mpo ngai mosaleli wa yo nayebaki likambo soki moke te. »
I Sa LinVB 22:16  Mokonzi azongisi : « Akimelek, okokufa, yo na libota lya mobimba. »
I Sa LinVB 22:17  Mokonzi alobi na bantoma bazalaki koteleme penepene na ye : « Boboma banganga ba Yawe, mpo bango mpe bazalaki kopesa Davidi maboko ; bayebaki ’te akimaki mpe bayebisi ngai te. » Kasi basali ba mokonzi balingaki kotombola loboko te mpo ya koboma banganga Nzambe.
I Sa LinVB 22:18  Bo­ngo mokonzi alobi na Doeg : « Yaka, mpe boma banganga Nzambe. » O mo­kolo mona abomi bato ntuku mwambe na batano, bato balati efod ya malekani.
I Sa LinVB 22:19  Saul atindi ’te baboma na mopanga bato banso ba Nob, mbo­ka ya banganga Nzambe : babomi babali na basi, na bana na baye bakomele mabéle, na ngombe, mpu­nda na mpata.
I Sa LinVB 22:20  Ebiki se mwana moko wa Akimelek, mwana wa Akitub ; nkombo ya ye Ebiatar, akimi mpe akei kofa­nda epai ya Davidi.
I Sa LinVB 22:21  Ebiatar ayebisi Davidi ’te Saul abomi banganga Nza­mbe ba Yawe.
I Sa LinVB 22:22  Davidi alobi na ye : « Mokolo nayebaki ’te Doeg, moto wa Edom, azalaki wana, nayebaki mpe ’te akoyebisa Saul likambo lina. Ngai moto namemi ngambo na lika­mbo lya liwa lya libota lya yo mobimba.
I Sa LinVB 22:23  Yo, tikala epai ya ngai, obanga te. Soko moto aluki koboma yo, aboma ngai lokola. Ngai nakobatela yo malamu. »
Chapter 23
I Sa LinVB 23:1  Bayebisi Davidi nsango eye : « Ba-Filisti bazali kobunda na bato ba Keila, bazali koyiba mbuma o bitutelo. »
I Sa LinVB 23:2  Davidi atuni Yawe : « Na­kende kobunda na ba-Filisti ? » Yawe azongisi : « Kende kobunda na ba-Filisti mpe bikisa bato ba Keila. »
I Sa LinVB 23:3  Bato ba Davidi balobi na ye : « Awa o Yuda tozali kobanga, ekosuka boni na biso soko tokei kobunda na ba-Filisti o Keila ? »
I Sa LinVB 23:4  Davidi atuni Yawe lisusu mpe Yawe ayanoli : « Ke­nde o Keila, nakokaba ba-Filisti o maboko ma yo. »
I Sa LinVB 23:5  Davidi akei o Keila elongo na bato ba ye, abundisi ba-Filisti, abotoli bango bibwele mpe anyati bango. Davidi abikisi bongo bato banso ba Keila.
I Sa LinVB 23:6  Ekimaki Ebiatar, mwana wa Akimelek o Keila epai ya Davidi, amemi efod o maboko.
I Sa LinVB 23:7  Bayebisi Saul ’te Davidi ayingelaki o Keila. Saul alobi : « Nzambe akabi ye o maboko ma ngai, zambi akoti o motambo awa ayingeli o mboka ekangemi na bizibeli mpe na mafungola. »
I Sa LinVB 23:8  Saul asangisi bato banso mpo ya kokende o Keila mpo akanga Davidi na bato ba ye.
I Sa LinVB 23:9  Eyoki Davidi ’te Saul akani kosala ye mabe, alobi na nganga Nzambe Ebiatar : « Yaka na efod. »
I Sa LinVB 23:10  Davidi abondeli : « E Yawe, Nzambe wa Israel, ngai mosaleli wa yo nayokaki ’te Saul alingi kokoma o Keila mpo ’te abebisa mboka mpo ya ngai.
I Sa LinVB 23:11  Bato ba Keila bakokaba ngai o maboko ma ye te ? Saul akoya awa solo ? E Yawe, Nzambe wa Israel, yanola ngai, mosaleli wa yo ! » Yawe azongisi : « Akoya. »
I Sa LinVB 23:12  Davidi atuni lisusu : « Bato bakokaba ngai na bato ba ngai o maboko ma Saul ? » Yawe azongisi : « Bakokaba bino o maboko ma ye. »
I Sa LinVB 23:13  Yango wana Davidi elongo na bato ba ye soki nkama motoba babimi o Keila mpe bakei koyengayenga epai na epai. Bayebisi Saul ’te Davidi alongwaki o Keila, bongo Saul akei kuna te.
I Sa LinVB 23:14  Davidi akei kofanda o eliki, abo­mbami o kati ya ngomba. Atikali o ngomba ya eliki ya Zif. Ntango ina inso Saul azalaki koluka ye, kasi Nza­mbe andimi ’te Davidi akweya o maboko ma ye te.
I Sa LinVB 23:15  Davidi ayebi ’te Saul azalaki komilengele mpo ya koboma ye. Davidi azalaki o eliki ya Zif o mboka Orsa.
I Sa LinVB 23:16  Yonatan, mwana wa Saul, akei mpe akomi epai ya Davidi o Orsa. Alendisi ye motema na bilako bya Nzambe.
I Sa LinVB 23:17  Alobi na Davidi : « Oba­nga te, tata wa ngai Saul akoboma yo te. Yo moto okokoma mokonzi wa Israel ; ngai nakozala moto wa babale ; tata wa ngai Saul ayebi yango malamu. »
I Sa LinVB 23:18  Bango babale bakati bondeko o miso ma Yawe. Davidi atikali o Orsa mpe Yonatan azongi epai ya ye.
I Sa LinVB 23:19  Bato ba Zif bakei o Gibea epai ya Saul mpe balobi na ye : « Davidi abo­mbami epai ya biso, azali o Orsa, o ngomba Akila, o ngele ya eliki.
I Sa LinVB 23:20  Bo­ngo, soko olingi kokende kuna, e mo­konzi, kende sikawa, biso tokokaba ye o maboko ma yo mokonzi. »
I Sa LinVB 23:21  Saul alobi : « Yawe abenisa bino awa boyokeli ngai mawa !
I Sa LinVB 23:22  Bokende, botuna malamu, bomeka koyeba esika nini abombami. Balobi na ngai ’te azali na mayele mingi.
I Sa LinVB 23:23  Bokende kotala bisika binso akoki kobombama. Soko boyebi solo esika azali, bozo­nga koyebisa ngai mpe nakokende na bino elongo. Bongo soko azali o mokili moye, nakoluka ye o kati ya bituka binso bya Yuda. »
I Sa LinVB 23:24  Bango basimbi nzela, bakei o Zif, Saul alandi bango. Davidi na bato ba ye bazalaki o eliki ya Maon, o lobwaku o Sudi ya eliki.
I Sa LinVB 23:25  Saul na bato ba ye bakei koluka ye. Bayebisi Davidi mpe ye akiti o lobwaku la eliki ya Maon. Saul ayoki nsango mpe akei kolanda Davidi o eliki ya Maon.
I Sa LinVB 23:26  Saul alandi mopanzi mwa ngomba, Davidi na bato ba ye bazalaki nsima ya ngomba. Davidi azalaki kotambola mbangu mpo ya kokima Saul. Saul na bato ba ye baluki kozinga Davidi na bato ba ye, etikali moke bakanga bango.
I Sa LinVB 23:27  O ntango ena ntoma moko ayei koyebisa Saul : « Yaka noki, za­mbi ba-Filisti bayingeli o mboka mpo ya kobunda. »
I Sa LinVB 23:28  Saul atiki bongo kolanda Davidi mpe akei kozwana na ba-Filisti mpo ’te babunda. Bongo ba­pesi esika ena nkombo : ‘Libanga lya bokabwani’.
Chapter 24
I Sa LinVB 24:1  Davidi alongwi kuna mpe akei komibomba o kati ya ma­banga ma Engadi.
I Sa LinVB 24:2  Esilisi Saul kobunda etumba na ba-Filisti, bayebisi ye ’te Davidi azalaki o eliki ya Engadi.
I Sa LinVB 24:3  Saul akamati bato nkoto isato, bato baponomi o Israel mobimba, mpe akei koluka Davidi na bato ba ye o Esti ya ngomba ya Ntaba.
I Sa LinVB 24:4  Akomi o mapango ma bibwele mpembeni ya nzela. Saul amoni lilusu o kati ya mabanga ma ngomba mpe akoti wana mpo ya kosuba. Davidi na bato ba ye babombami o nsuka ya mobenga mona.
I Sa LinVB 24:5  Baninga ba ye balobi : « Yawe alakisi mokolo mwa lelo ntango alobaki na yo : Nakokaba monguna o maboko ma yo, sala na ye lokola olingi ! » Davidi atelemi, abelemi malembe mpe akati nsonge ya elamba ya Saul ; Saul ayebi eloko te.
I Sa LinVB 24:6  Davidi azo­ngi, mpe motema mwa ye mokomi kobete makasi, mpo akati eteni ya elamba ya mokonzi.
I Sa LinVB 24:7  Alobi na bato ba ye : « Yawe abatela ngai, mpo ’te na­luka koboma mokonzi wa ngai Saul te, zambi Yawe apakoli ye mafuta. »
I Sa LinVB 24:8  Mpe apekisi basaleli ba ye bakanga Saul te. Saul abimi o mobenga mpe akei.
I Sa LinVB 24:9  Na nsima Davidi mpe atelemi, abimi o libanda mpe abeleli ye : « E moko­nzi, nkolo wa ngai ! » Saul amibo­ngoli mpe Davidi ayei kofukamela ye,
I Sa LinVB 24:10  alobi : « Mpo nini ozali kondima bato bakolobaka ’te Davidi alingi kosala yo mabe ?
I Sa LinVB 24:11  Yo moko omoni boniboni Yawe akabaki yo o maboko ma ngai lelo o mobenga moye. Bato ba ngai balobaki ’te naboma yo, kasi naboyi mpe nayebisi bango : Nakoboma mokonzi wa ngai te ; boyeba ’te Yawe apakoli ye mafuta.
I Sa LinVB 24:12  Tata wa ngai, tala o loboko la ngai nsonge ya elamba ya yo ; awa nakokaki kokata yango mpe nabomi yo te, ndima ’te nalingi kosala yo mabe te, kotombokela yo mpe te. Nasali yo mabe te, nzokande ozali koluka koboma ngai.
I Sa LinVB 24:13  Yawe akata likambo kati ya biso na yo. Yawe akoki kopesa yo etumbu, kasi ngai nakotombola loboko te mpo ’te nasala yo mabe.
I Sa LinVB 24:14  Bankoko balobaka ’te : Makambo mabe mako­utaka se na bato babe, ngai nakosala yo mabe te.
I Sa LinVB 24:15  Yo mokonzi wa Israel, ozali koluka nini awa ? Ozali kolanda nani ? Oluki nde mbwa esili kokufa to nsili mpamba ?
I Sa LinVB 24:16  Yawe ye moko azala zuzi wa biso, akata likambo lya biso na yo, alongisa ngai mpe abikisa ngai o maboko ma yo. »
I Sa LinVB 24:17  Esilisi Davidi koloba maloba mana, Saul agangi : « Nayoki nde mo-ngo­ngo mwa mwana wa ngai Davidi ? » Mpe abandi kolela makasi.
I Sa LinVB 24:18  Mpe alobi na Davidi : « Yo oleki ngai na bo­sembo, osali ngai se malamu ; ngai nalukaki kosala yo mabe.
I Sa LinVB 24:19  Lelo olakisi ngai motema malamu, kasi ngai nasali yo mabe. Tala, Yawe akabaki ngai o maboko ma yo, nzokande obo­mi ngai te.
I Sa LinVB 24:20  Soko moto akangi monguna wa ye se bongo, akotika ye akende nzela ya ye ? Yawe azongisela yo bolamu mpo ya maye osalaki ngai lelo.
I Sa LinVB 24:21  Sikawa nayebi solo ’te yo okozala mokonzi mpe ekolo Israel ekozwa lokumu o bokonzi bwa yo.
I Sa LinVB 24:22  Bongo layela ngai na nkombo ya Yawe ’te, nsima ya liwa lya ngai, okosilisa libota lya ngai te mpe okolo­ngola nkombo ya libota lya ngai te. »
I Sa LinVB 24:23  Davidi alayeli Saul ndai eye. Na nsima Saul azongi o mboka ya ye ; Davidi na bato ba ye bakei lisusu kobo­mbama o esika bazalaki.
Chapter 25
I Sa LinVB 25:1  Samuel awei. Bato banso ba Israel basangani esika yoko mpo ya lilaka. Bakundi ye o mboka ya ye Rama. Davidi akei mpe akiti lisusu o eliki ya Maon.
I Sa LinVB 25:2  Ezalaki o Maon moto moko wa mombongo, afandi o Karmel. Azalaki moto wa nkita mpenza ; azalaki na mpata nkoto isato mpe na ntaba nkoto yoko. Mokolo mona azalaki o Karmel mpo ya kokata nsuki ya mpata ya ye.
I Sa LinVB 25:3  Nkombo ya ye Nabal, mpe nkombo ya mwasi wa ye Abigayil. Ye azalaki mwasi wa mayele mpe kitoko, kasi mobali wa ye, moto oyo mabe wa libota lya Kaleb azalaki na makambo makasi makasi.
I Sa LinVB 25:4  Eyoki Davidi o eliki ’te Nabal azalaki kokata nsuki ya mpata ya ye,
I Sa LinVB 25:5  atindi bilenge babali zomi mpe alobi na bango : « Bokende o Karmel, bokutana na Nabal mpe bopesa ye losako o nkombo ya ngai.
I Sa LinVB 25:6  Boloba na ye : Losako na yo, na bandeko mpe na bato ba yo banso !
I Sa LinVB 25:7  Nayoki ’te epai ya yo bazali kokata nsuki ya mpata. Ntango bakengeli ba yo bazalaki epai ya biso, tonyokoloki bango te, babungisaki ata eloko yoko te ntango bafandaki o Karmel.
I Sa LinVB 25:8  Tuna basaleli ba yo, bakoyebisa yo. Yamba bilenge ba ngai malamu, zambi tokokoma epai ya yo o mokolo mwa eyenga. Nabondeli yo, pesa basaleli ba ngai mpe ngai moko mwana wa yo Davidi biloko okoki kopesa. »
I Sa LinVB 25:9  Ekomi bilenge ba Davidi epai ya Nabal, bayebisi ye maloba manso Da­vidi alobaki na bango, mpe bazili mwa moke.
I Sa LinVB 25:10  Nabal ayanoli basaleli ba Davidi : « Davidi ye nani, mwana wa Yese nani ? Lelo boye basali baike bakokimaka nkolo wa bango.
I Sa LinVB 25:11  Bo­ngo nakamata mampa ma ngai, vino na nyama nabomaki mpo ’te naleisa bato bazali kokata nsuki ya mpata mpe napesa yango na bato baye nayebi te soko bauti wapi ? »
I Sa LinVB 25:12  Bilenge ba Davidi bazongi o mboka ya ba­ngo. Ekomi bango kuna bayebisi Davidi maloba mana manso.
I Sa LinVB 25:13  Davidi alobi na bato ba ye : « Moto na moto ame­me mopanga mwa ye ! » Banso bamemi mopanga mpe Davidi lokola. Bato soki nkama inei bakei kolanda Davidi, kasi bato nkama ibale batikali mpo ya kokengele biloko.
I Sa LinVB 25:14  Mosaleli moko asili ayebisi Abigayil, mwasi wa Nabal, alobi na ye : « Ut’o eliki Davidi atindaki bantoma bapesa nkolo wa biso losako, kasi nko­lo azongiselaki bango se maloba mabe.
I Sa LinVB 25:15  Nzokande bango basalaki biso se malamu. Banyokoloki biso te, tobungisaki ata eloko yoko te ntango tozalaki na bango o esobe.
I Sa LinVB 25:16  Bango ba­zalaki lokola lopango lokobatela biso, butu moi, mikolo minso tozalaki elongo na bango mpo ya koleisa mpata ya biso.
I Sa LinVB 25:17  Sikawa kanisa malamu mpe yeba nini osengeli kosala, zambi basili bakataki likambo lya nkolo wa biso na bandeko ba ye, banso bakokufa. Nkolo wa biso azali na motema mabe ; akoyokaka mpe moto moko te. »
I Sa LinVB 25:18  Abigayil akei mbangu kokamata mampa nkama ibale, ngoto ya vino ibale, mpata itano isili ilambami, ngoto itano ya mbuma ya mampa bakalingi, bituka monkama ya vino ikauki, bisikiti ya mbuma ya figi nkama ibale ; abutisi binso o mpunda.
I Sa LinVB 25:19  Alobi na basaleli ba ye : « Bino boleka liboso, ngai nakolanda bino. » Kasi aye­bisi mobali wa ye Nabal eloko te.
I Sa LinVB 25:20  Abigayil abuteli mpunda mpe o ntango azalaki nsima ya ngomba, Davidi na bato ba ye bazalaki kokita ngomba, bongo bazwani.
I Sa LinVB 25:21  Davidi amilobeli : « Awa o eliki nabatelaki biloko bya moto ona se mpamba, eloko yoko ebungaki te. Nasalaki ye ma­la­mu, kasi azongiseli ngai mabe.
I Sa LinVB 25:22  Nza­mbe asala na ngai lokola alingi mpe apesa ngai etumbu, soko lobi na nto­ngo nasilisi koboma bato ba ye banso te. »
I Sa LinVB 25:23  Emoni Abigayil Davidi, akiti mpunda noki mpe akumbameli ye, elongi o nse.
I Sa LinVB 25:24  Na nsima afukameli ye mpe alobi : « E mokonzi, ngai moto nasali mabe ! Tika ngai mosaleli wa yo naloba mwa liloba o litoi lya yo ! Yoka maloba ma mosaleli wa yo.
I Sa LinVB 25:25  E mo­konzi wa ngai, otala moto mpa­mba ona te, Nabal oyo, nkombo ya ye ekoki na ye mpenza ; Nabal lokola ’te ‘efaka ya moto’, mpe azali solo mo­to mabe. Kasi ngai, mosaleli wa yo, namonoki bilenge te, baye yo mo­konzi wa ngai otindaki.
I Sa LinVB 25:26  Sikawa, mokonzi wa ngai, lokola Yawe azali na bomoi, mpe lokola yo ozali na bomoi, Yawemei apekisi yo koboma bato to kosala bato makambo malongobani te, banguna ba yo na baye baluki kosala yo mabe, bakoma lokola Nabal sikawa !
I Sa LinVB 25:27  Mpe libonza liye ngai mosaleli wa yo nayeli yo, mokonzi wa ngai, bapesa lyango na bilenge balandi yo.
I Sa LinVB 25:28  Nabondeli yo, limbisa ngai mosaleli wa yo. Ntembe te, Yawe ako­sala ’te libota lya yo liumela seko, zambi mokonzi akobunda bitumba bya Yawe, mpe bomoi bwa ye mobimba bakozwa yo na mabe moko te.
I Sa LinVB 25:29  Soko bato basusu batomboki mpe balingi kokanga mokonzi wa ngai mpe koboma ye, bomoi bwa moko­nzi wa ngai bokobombama epai ya Yawe Nzambe wa yo, nzokande Yawe akobwaka banguna mosika lokola moto wa bilingongo akobwakaka ma­banga.
I Sa LinVB 25:30  Mokolo Yawe akosala yo malamu manso alakelaki yo, akolubola yo mokonzi wa Israel.
I Sa LinVB 25:31  Mokolo mona, mokonzi wa ngai, oyoka motema nsomo to mawa te, zambi makila masopani mpamba to zambi yo moko obomaki bato. Mpe mokolo Yawe akosala yo malamu, okanisa ngai, mosaleli wa yo. »
I Sa LinVB 25:32  Davidi alobi na Abigayil : « Bakumisa Yawe Nzambe wa Israel, awa atindi yo lelo mpo tokutana biso na yo !
I Sa LinVB 25:33  Bakumisa mpe bwanya bwa yo, mpe yo moko, awa opekisi ngai lelo kosopa makila ma bato mpe koboma bango na maboko ma ngai !
I Sa LinVB 25:34  Solo, lokola Yawe Nzambe wa Israel azali na bomoi, oyo apekisi ngai kosala yo mabe, soko yo oyaki noki te mpo ya kokutana na ngai, mbele lobi na nto­ngo mobali moko wa libota lya Nabal atikalaki na bomoi te. »
I Sa LinVB 25:35  Davidi ayambi biloko mwasi ayelaki ye mpe alobi na ye : « Zonga na boboto ! Omo­ni, nandimeli yo mpe nalimbisi yo. »
I Sa LinVB 25:36  Abigayil azongi epai ya Nabal. Ye azalaki kolia limpati o ndako ya ye, limpati lya mokonzi solo. Nabal ayoki motema esengo, alangwi mpenza, yango wana mwasi wa ye ayebisi ye likambo lyoko te tee ntongo.
I Sa LinVB 25:37  Mokolo mwa nsima na ntongo, esili lilangwa lya Nabal, mwasi wa ye asololi ye makambo manso malekaki. Motema mwa Nabal mokatani, akomi lokola libanga.
I Sa LinVB 25:38  Nsima ya mikolo zomi Yawe abeti Nabal, bongo ye awei.
I Sa LinVB 25:39  Eyoki Davidi nsango ya liwa lya Nabal, alobi : « Bakumisa Yawe, oyo alongisaki ngai o likambo lya nsoni Nabal ayokisaki ngai, mpe apekisaki ngai, mosaleli wa ye, kosala mabe. Yawe asalaki ’te mabe ma Nabal ma­kwela ye moko. » Davidi atindi bato epai ya Abigayil bayebisa ye ’te alingi kobala ye.
I Sa LinVB 25:40  Basaleli ba Davidi bakei koluka Abigayil o Karmel mpe balobi na ye : « Davidi atindi biso epai ya yo mpo tokamata yo, ozala mwasi wa ye. »
I Sa LinVB 25:41  Atelemi, akumbami elongi o nse mpe alobi : « Ngai, mosaleli wa yo, nazali lokola moombo, nandimi kosukola makolo ma basaleli ba mokonzi wa ngai. »
I Sa LinVB 25:42  Abigayil atelemi noki, abuteli mpu­nda ya ye mpe basaleli basi batano balandi ye ; alandi bantoma ba Davidi. Akomi bongo mwasi wa Davidi.
I Sa LinVB 25:43  Davidi asili abalaki Akinoam wa Yizreel. Bango babale bazalaki basi ba ye.
I Sa LinVB 25:44  Saul abalisaki mwana wa ye Mikal, mwasi wa Davidi, na Palti, mwana wa Lais, moto wa Galim.
Chapter 26
I Sa LinVB 26:1  Bato ba Zif bakei koluka Saul o Gibea. Balobi na ye : « Oyebi te ’te Davidi azali komibomba o ngomba Akila penepene na esobe ? »
I Sa LinVB 26:2  Saul elongo na bato nkoto isato, baye baponomi o kati ya Israel, akei koluka Davidi o eliki ya Zif.
I Sa LinVB 26:3  Saul apiki nganda o ngomba Akila, etalani na esobe, penepene na nzela. Davidi afa­ndi o eliki, amoni ’te Saul ayei kola­nda ye tee kuna.
I Sa LinVB 26:4  Davidi atindi banongi mpe akomi koyeba solo ’te Saul asili koya.
I Sa LinVB 26:5  Bongo Davidi asi­mbi nzela mpe akomi o esika Saul apiki nganda, mpe amoni esika Saul na Abner, mwana wa Ner, komanda wa basoda, bazalaki kolala. Saul alali o nganda mpe basoda ba ye balali zongazonga na nganda.
I Sa LinVB 26:6  Davidi alobi na Akimelek moto wa Eti, mpe na Abisai, mwana wa Seruya, ndeko wa Yoab : « Nani alingi kokende elongo na ngai tee o nganda ya Saul ? » Abisai alobi : « Ngai nakokende elongo na yo. »
I Sa LinVB 26:7  Bongo na butu Davidi na Abisai bakomi o esika basoda bazalaki ; bakuti Saul alali mpongi o nganda, likongo lya ye lipikami o mabelé penepene na motó mwa ye. Abner na basoda bazalaki kolala mpongi zongazonga na ye.
I Sa LinVB 26:8  Abisai alobi na Davidi : « Lelo Nza­mbe akabi monguna wa yo o maboko ma yo. Tika nábaka ye na mbala yoko o mabelé na likongo lya ye moko. Na mbala yoko nakokoka. »
I Sa LinVB 26:9  Davidi alobi na Abisai : « Oboma ye te ! Nani akoki koboma moto oyo Yawe apakoli ye mafuta, bongo azwa etumbu te ? »
I Sa LinVB 26:10  Davidi abakisi : « Lokola Yawe azali na bomoi, tika Yawe aboma ye soko ngonga ya liwa ekoki to soko akei etumba mpo ’te akufa kuna.
I Sa LinVB 26:11  Yawe abatela ngai naboma moto oyo te, Yawe apakoli ye mafuta ! Kamata likongo lya ye lizali pene na motó na mpe elokó ya mai, na nsima toke­nde. »
I Sa LinVB 26:12  Davidi akamati likongo na elo­kó ya mai, bizalaki penepene na motó mwa Saul, mpe bakei. Moto moko amoni te, moto moko ayebi mpe te, ata moko alongwi o mpongi te. Banso balali, zambi Yawe alalisi ba­ngo mpongi makasi.
I Sa LinVB 26:13  Davidi aleki nsima ya ngomba, atelemi mosika o nsonge ya ngomba. O kati ya bango mwa ntaka ezalaki.
I Sa LinVB 26:14  Davidi abeleli basoda na Abner, mwana wa Ner, atuni : « Abner okopesa ngai eyano te ? » Abner azongisi : « Yo nani ? Nani azali kobyanga mokonzi bo­ngo ? »
I Sa LinVB 26:15  Davidi alobi na Abner : « Yo nde mobali solo ? O Israel nani akokani na yo ? Mpo nini okengeli moko­nzi, nkolo wa yo, malamu te ? Moto moko ayaki mpo ya koboma mokonzi, nkolo wa yo.
I Sa LinVB 26:16  Eye osalaki ezali malamu te. Lokola Yawe azali na bomoi, bino bokoki na liwa, zambi bokengeli nkolo wa bino malamu te, oyo Yawe apakoli ye mafuta. Sikawa tala : liko­ngo lya mokonzi lizali wapi, elokó ya mai ezalaki pene na motó mwa ye ekei wapi ? »
I Sa LinVB 26:17  Saul ayoki mpe ayebi ’te ezalaki mongongo mwa Davidi, mpe atuni ye : « Ezali solo lolaka la yo, mwana wa ngai Davidi ? » Davidi ayanoli : « Ya solo, mokonzi wa ngai. »
I Sa LinVB 26:18  Mpe abakisi : « Mpo nini mokonzi wa ngai azali kolanda mosaleli wa ye ntango inso ? Nasali nini ? Mabe nini mazali na ngai ?
I Sa LinVB 26:19  Sikawa, e mokonzi wa ngai, yoka maloba ma mosaleli wa yo. Soko Yawe moto apesi yo mayele mabe ma kotungisa ngai, babonzela ye libonza lya nsolo mpimbo mpo ya kosepelisa ye ! Kasi soko bato bapesi yo mayele mabe mana, Yawe atombela bango bobe, awa babenganaki ngai mpe balongolaki ngai o kati ya ba­ndeko ba ngai o ekolo ya Yawe ; lokola balingi koyebisa ngai : Kende kosalela banzambe basusu.
I Sa LinVB 26:20  Sikawa makila ma ngai masopana o mabelé te mosika na ekolo ya Yawe, za­mbi mokonzi wa Israel akei kobunda etumba mpo ’te aluka nsili mpamba, lo­kola bakolukaka esosolo o ngo­mba. »
I Sa LinVB 26:21  Saul alobi : « Nasali lisumu. Yaka, mwana wa ngai Davidi ! Nakosala yo mabe lisusu te, zambi o mokolo mwa lelo otali bomoi bwa ngai lokola eloko ya motuya mpenza. Solo, nasali bozoba, nabungaki solo. »
I Sa LinVB 26:22  Davidi azo­ngisi : « Likongo lya mokonzi lizali awa. Tinda moto moko aya kokamata lyango.
I Sa LinVB 26:23  Yawe akosala moto mo­ko moko engebene na bosembo mpe na lobokó la ye : Yawe moto akabaki yo lelo o maboko ma ngai, kasi naboyi kosala mabe na moto oyo Yawe apakoli mafuta.
I Sa LinVB 26:24  Soko lelo natali bomoi bwa yo lokola eloko ya motuya, malamu Yawe atala bomoi bwa ngai se bongo, mpe abikisa ngai o ma­kama manso. »
I Sa LinVB 26:25  Saul alobi na Davidi : « Nzambe abenisa yo, mwana wa ngai Davidi ! Ntembe te okosala mambi manene mpe makambo ma yo manso makotambola malamu. » Davidi akobi nzela ya ye mpe Saul azongi o mboka.
Chapter 27
I Sa LinVB 27:1  Davidi amilobeli : « Ntembe te, mokolo moko Saul akoboma ngai. Etikali se nakima o mokili mwa ba-Filisti. Bobele bongo Saul akotika koluka ngai bipai binso o Israel, mpe nakobika o maboko ma ye. »
I Sa LinVB 27:2  Davidi asimbi nzela elongo na bato nkama motoba mpe aleki epai ya Akis, mwana wa Maok, mokonzi wa Gat.
I Sa LinVB 27:3  Davidi afandi epai ya Akis o mboka Gat, elongo na bato ba ye ; bayei moto na moto na libota lya ye, Davidi na basi ba ye babale, Akinoam wa Yizreel, na Abigayil, moto wa Karmel.
I Sa LinVB 27:4  Bayebisi Saul ’te Davidi akimaki o Gat ; bongo atiki koluka ye.
I Sa LinVB 27:5  Davidi alobi na Akis : « Nabondeli yo, pesa ngai esika o ekolo ya yo mpo nafanda wana. Mpo nini ngai mosaleli wa yo nafandi pene na yo o mboka ya mokonzi ? »
I Sa LinVB 27:6  Bobele o mokolo mo­na Akis apesi ye mboka Siklag. Yango wana mboka ena ekomi ya bakonzi ba Yuda tee lelo.
I Sa LinVB 27:7  Davidi afa­ndi bongo o mokili mwa ba-Filisti mbula yoko na sanza inei.
I Sa LinVB 27:8  Davidi akei elongo na bato ba ye kobunda etumba na ba-Gesur, ba-Girzi na ba-Amalek ; bango bafandi o mokili mona ut’o kala, kuna epai ya Sur tee mokili mwa Ezipeti.
I Sa LinVB 27:9  Davidi abebisi mokili, atiki moto moko na bomoi te, mobali te, mwasi mpe te ; abotoli mpata, ngombe, mpunda, kamela na mpe bilamba. Nsima azongi epai ya Akis.
I Sa LinVB 27:10  Akis atuni ye : « Lelo okendeki kobunda epai wapi ? » David ayanoli ye : « Tobundi etumba na Negeb o Yuda, to na Negeb ya ba-Yeramel, to na Negeb ya ba-Keniz. »
I Sa LinVB 27:11  Davidi atiki moto te azonga na bomoi o Gat, ezala mobali to mwasi, zambi amilobeli : « Soko babandi koloba, mbele bakofunda biso kuna. » Davidi azalaki kosala bongo o eleko azalaki kofanda o ekolo ya ba-Filisti.
I Sa LinVB 27:12  Akis atii motema na Davidi ; amilobeli : « Ntembe te, bato ba Israel bakomi koyina ye solo, bongo akozala mosaleli wa ngai seko. »
Chapter 28
I Sa LinVB 28:1  O mikolo mina, ba-Filisti basangisi basoda ba bango banso mpo ’te babunda etumba na ba-Israel. Akis alobi na Davidi : « Oye­ba ’te yo na bato ba yo bokokende kobunda elongo na ngai. »
I Sa LinVB 28:2  Davidi ayanoli : « Malamu, yo moko okomono maye ngai mosaleli wa yo nakosala. » Bongo Akis alobi na Davidi : « Na­kotia yo kapita wa bakengeli ba ngai seko. »
I Sa LinVB 28:3  Samuel asilaki kokufa, bato banso ba Israel basalaki lilaka mpe bakundi ye o Rama, mboka ya ye moko. Saul asilaki kobengana o mokili mwa ye bato baye bakosololaka na milimo mya bawei.
I Sa LinVB 28:4  Ba-Filisti basangani mpe bayei kopika nganda o Sunem. Saul asa­ngisi mpe bato banso ba Israel mpe bapiki nganda o Gilboa.
I Sa LinVB 28:5  Saul amoni nganda ya ba-Filisti, akomi kobanga mpe motema mwa ye mobandi kolenge.
I Sa LinVB 28:6  Saul atuni Yawe, kasi Yawe azongisi liloba lyoko te ; ata na ndoto to na Urim azwi eyano te ; baprofeta mpe bayebisi ye eloko te.
I Sa LinVB 28:7  Saul alobi na basaleli ba ye : « Bolukela ngai mwasi oyo ayebi kosolola na bawei, nakende kotuna ye. » Basaleli ba ye bayanoli : « Mwasi moko ayebi kosolola na milimo azali o En-Dor. »
I Sa LinVB 28:8  Saul alati bilamba bisusu mpo bayeba ye te, mpe akei elongo na bato babale. Bakomi epai ya mwasi ona na butu. Saul alobi na ye : « Nabondeli yo, otuna molimo mwa mowei moko, be­ngela ngai mowei oyo nakotangela yo. »
I Sa LinVB 28:9  Mwasi alobi : « Yo moko oyebi ’te Saul asilisaki o ekolo mobimba bato banso bakosololaka na milimo. Mpo nini otieli ngai motambo mpo ’te nakufa ? »
I Sa LinVB 28:10  Saul alayeli ye na nkombo ya Yawe, alobi : « Lokola Yawe azali na bomoi, okozwa etumbu te mpo ya likambo lina. »
I Sa LinVB 28:11  Mwasi atuni ye : « Nabengela yo nani ? » Mpe Saul azongisi : « Bengela ngai Samuel. »
I Sa LinVB 28:12  Mwasi amoni Samuel mpe agangi makasi. Alobi na Saul : « Mpo nini oko­si ngai ? Yo ozali Saul ! »
I Sa LinVB 28:13  Moko­nzi alobi : « Obanga te ; omoni maka­mbo nini ? » Mwasi ayanoli : « Namoni lokola nzambe moko azali kobima o mabelé. »
I Sa LinVB 28:14  Saul atuni : « Azali lokola nani ? » Mwasi alobi : « Azali lokola mo­bange azali koya, alati monkoto. » Saul ayebi ’te ezalaki Samuel. Agu-mbi elongi o nse mpe afukami.
I Sa LinVB 28:15  Samuel alobi na Saul : « Mpo nini obengi ngai mpe otungisi ngai awa nazali kopema ? » Saul alobi : « Nazali na likambo lya kwokoso mingi. Ba-Filisti balingi kobunda na ngai mpe Nzambe asili alongwi mosika na ngai. Akozongisela ngai eyano te, na monoko mwa baprofeta te, na ndoto mpe te. Yango wana nabengi yo oyebisa ngai nini nasengeli kosala. »
I Sa LinVB 28:16  Samuel alobi : « Mpo nini otuni ngai, awa Yawe alongwi mosika na yo mpe akomi monguna wa yo ?
I Sa LinVB 28:17  Yawe asali lokola alobaki na monoko mwa ngai. Abotoli yo bokonzi mpe apesi bwa-ngo na moto mosusu, na Davidi.
I Sa LinVB 28:18  Mpamba te, otosaki monoko mwa ye te, mpe awa Yawe ayokelaki ba-Amalek nkanda enene, okitisaki motema mwa ye te. Yango wana Yawe asali yo bongo lelo.
I Sa LinVB 28:19  Yawe moto ako­kaba yo na ba-Israel banso o maboko ma ba-Filisti. Lobi, yo na bana ba yo babali bokozala na ngai esika yoko. Yawe akokaba basoda banso ba Israel o maboko ma ba-Filisti. »
I Sa LinVB 28:20  Eyoki Saul bongo, akwei o nse, makalekale ; ayoki motema nsomo mpo ya maloba ma Samuel. Bokasi bwa ye bosili nye, zambi aliaki eloko te, moi mobimba mpe butu mobi­mba.
I Sa LinVB 28:21  Mwasi ayei epai ya Saul amoni ’te nsomo ekangi ye, alobi na ye : « Tala naino, ngai mosaleli wa yo natosi monoko mwa yo, nabangaki kokufa te, mpe natosi bitinda otindaki ngai.
I Sa LinVB 28:22  Sikawa, yo mpe otosa monoko mwa ngai mosaleli wa yo. Tika napesa yo ndambo ya mampa olia, bongo olenda mpo okoba mobembo mwa yo. »
I Sa LinVB 28:23  Saul aboyi kolia, alobi : « Nakolia te. » Kasi basaleli ba ye basengisi ye na makasi, na mwasi lokola, bongo andimi monoko mwa ba­ngo. Alongwi o mabelé mpe akei kofanda o mbeto.
I Sa LinVB 28:24  Mwasi azalaki na mwana ngombe mafuta, abomi yango noki, akamati fufu mpe alambi na yango mampa mazangi nkisi.
I Sa LinVB 28:25  Apesi Saul mpe bato ba ye. Balei, na nsima batelemi mpe bakei se na butu bona.
Chapter 29
I Sa LinVB 29:1  Ba-Filisti basangisi basoda ba bango banso o Afek. Ba-Israel bapiki nganda penepene na liziba lya Yizreel.
I Sa LinVB 29:2  Bankumu ba Filisti batamboli liboso lya milongo mya basoda monkama to nkoto yoko ; Davidi na bato ba ye batamboli nsima ya bango elongo na Akis.
I Sa LinVB 29:3  Bakonzi ba Filisti batuni : « Ba-Ebrei baye, banani ? » Akis azongiseli bakonzi ba Filisti : « Ezali Davidi, mosaleli wa Saul, mokonzi wa Israel ! Asili afandi epai ya ngai mbula yoko to ibale, nazali na likambo lyoko lya kopalela ye te, banda mokolo akimaki epai ya biso tee lelo. »
I Sa LinVB 29:4  Bankumu ba Filisti basiliki na Akis, balobi na ye : « Longola moto oyo, azonga o esika olakisaki ye. Ye akoki kobunda na biso elongo te, mpo ’te abongwanela biso o nta­ngo ya etumba. Boniboni akozwa bo­lamu o miso ma nkolo wa ye, soko abomi basoda ba biso te ?
I Sa LinVB 29:5  Ye Davidi te, oyo bato bazalaki kobina mpo ya ye mpe koyemba : Saul abomaki bato nkoto, mpe Davidi abomi bato nkoto zomi ? »
I Sa LinVB 29:6  Akis abengi Davidi mpe alobi na ye : « Lokola Yawe azali na bomoi, yo ozali moto wa bosembo. Nalingi ’te obima mpe ozonga o nganda elongo na ngai, mpo, banda mokolo oyaki epai ya ngai tee lelo, nazwi yo na mabe moko te. Kasi bankumu bandimi yo te.
I Sa LinVB 29:7  Yango wana zonga o mboka ya yo mpe kende na boboto, mpo ’te bankumu ba-Filisti bayoka mabe te. »
I Sa LinVB 29:8  Davidi alobi na Akis : « Nasali nini ? Na likambo nini okoki kopalela ngai mosaleli wa yo, ut’o mokolo naba­ndaki mosala epai ya yo tee lelo, bo­ngo nakende kobunda lisusu te na ba­nguna ba mokonzi wa ngai ? »
I Sa LinVB 29:9  Akis ayanoli : « Nayebi. Solo, nandimi yo lokola anzelu wa Nzambe. Kasi bankumu ba Filisti balobaki na ngai : ‘Moto oyo akoki kokende etu­mba elongo na biso te’.
I Sa LinVB 29:10  Teleme lobi na ntongo mpenza, yo na basaleli ba mokonzi wa yo, mpe awa moi mobandi kotana, bokende. »
I Sa LinVB 29:11  Davidi ate­lemi na nta ntongo elongo na bato ba ye mpo ’te bazonga o mokili mwa ba-Filisti. Mpe ba-Filisti bakei o Yizreel.
Chapter 30
I Sa LinVB 30:1  Ekomi Davidi na bato ba ye o Siklag nsima ya mikolo misato, bato ba Amalek basilaki kokoto o Negeb mpe o Siklag. Babebisaki Siklag mpe batumbaki yango.
I Sa LinVB 30:2  Baka­ngaki basi banso bazalaki wana, bana na bakolo, kasi babomaki moto te. Bakangaki bango bo baombo mpe ba­kobi nzela ya bango.
I Sa LinVB 30:3  Ekomi Davidi na bato ba ye pene na mboka, bamoni ’te mboka etumbami mpe basi na bana ba bango, babali na basi, bakendeki o boombo.
I Sa LinVB 30:4  Davidi na bato ba ye babandi koganga makasi mpe kolela tee balembi.
I Sa LinVB 30:5  Basi babale ba Davidi bakangemaki mpe bo bao­mbo, Akinoam wa Yizreel na Abigayil, mwasi wa Nabal, moto wa Karmel.
I Sa LinVB 30:6  Davidi ayoki mpi, mpo bato bazalaki koloba ’te bakoboma ye na mabanga, zambi banso bazalaki koyoka motema mpasi, moto na moto mpo ya bana ba ye babali na basi. Kasi Davidi azwi mpiko lisusu o motema mpo ya Yawe Nzambe wa ye.
I Sa LinVB 30:7  Davidi alobi na nganga Nzambe Ebiatar, mwana wa Akimelek : « Nasengi yo, pesa ngai efod. » Ebiatar ayei na efod epai ya Davidi.
I Sa LinVB 30:8  Davidi atuni Yawe : « Soko nalandi bayibi, nako­zwa bango ? » Yawe alobi na ye : « Ke­nde kolanda bango. Okozwa bango mpe okobikisa bandeko ba yo. »
I Sa LinVB 30:9  Davidi akei elongo na bato nkama motoba mpe bakomi o moluka Besor.
I Sa LinVB 30:10  Davidi akobi kolanda banguna elo­ngo na bato nkama inei, kasi bato nkama ibale batikali nsima, zambi balembi mingi mpe bakokaki kokatisa mai makasi ma Besor te.
I Sa LinVB 30:11  Bazwani na mo-Ezipeti moko o esobe mpe bakei na ye epai ya Davidi. Bapesi ye mampa alia na mpe mai amele.
I Sa LinVB 30:12  Bapesi ye bisikiti ilambami na mbuma ya figi na mpe bituka bibale bya mbuma ya vino ikauki. Awa alei, mayele ma ye mazongeli ye, za­mbi mikolo misato na butu isato aliaki te, ameleki mpe eloko te.
I Sa LinVB 30:13  Davidi atuni ye : « Yo moto wa nani mpe outi wapi ? » Azongisi : « Nazali elenge mobali wa Ezipeti, moombo wa mo-Amalek moko. Nkolo wa ngai atikaki ngai, zambi nabeleki, ekomi sikawa mikolo misato.
I Sa LinVB 30:14  Biso bato tokendeki kobunda na ba-Keret kuna o Negeb, na bato ba Yuda, mpe na bato ba Kaleb o Negeb lokola, mpe totumbaki Siklag na móto. »
I Sa LinVB 30:15  Davidi atuni ye : « Olingi kolakisa biso esika bazali ? » Azongisi : « Layela ngai ndai o miso ma Nzambe ’te okoboma ngai te mpe okokaba ngai o maboko ma nkolo wa ngai te, bongo nakokamba yo epai ya bango. »
I Sa LinVB 30:16  Akambi Davidi kuna. Ba-Amalek bapalangani o ekolo mobimba ; bazalaki kolia, komele mpe kosepela na biloko ebele biye babotoloki o ekolo ya ba-Filisti mpe ya Yuda.
I Sa LinVB 30:17  Davidi abomi bango, banda ntongo tee mpo­kwa ya mokolo mwa nsima. Moto moko abiki te, longola se bilenge nka­ma inei babutelaki kamela mpe bakimi.
I Sa LinVB 30:18  Davidi abikisi bato banso bakangemaki na ba-Amalek ; abikisi mpe basi ba ye babale.
I Sa LinVB 30:19  Moto moko abungi te o kati ya bana na bakolo, o kati ya bana basi na bana babali. O kati ya biloko binso babotoloki, biye bamemeki o mboka ya bango, eloko yoko ebungi te. Mpe Davidi azongisi biloko bina binso.
I Sa LinVB 30:20  Davidi akei na bi­bwele binso, ngombe na mpata. Baye bazalaki kotambola liboso mpo ’te bakamba bibwele, balobi : « Tala biloko Davidi abotoloki o etumba. »
I Sa LinVB 30:21  Davidi akomi epai ya bato nkama ibale, baye balandaki ye te, mpo balembeki mingi. Bango batikalaki pene na moluka Besor ; babimi mpo ya kokutana na Davidi na bato ba ye. Elongo na bato ba ye Davidi abelemi na bango mpe apesi bango losako.
I Sa LinVB 30:22  Ka­si o kati ya bato bakendeki elo­ngo na Davidi, bato babe mpe ba nka­nza babandi koloba : « Awa bango bakendeki elongo na biso te, tokopesa bango eloko te ya biloko binso tobotoloki, tokozongisela bango se basi na bana ba bango ; bakamata bango mpe bakende ! »
I Sa LinVB 30:23  Kasi Davidi alobi : « E bandeko ba ngai, bosala bongo te na biloko Yawe akabeli biso. Ye abateli biso mpe akabi o maboko ma biso banguna bayaki kobundisa biso.
I Sa LinVB 30:24  Nani akoki kolongisa bino o lika­mbo bolingi kosala ? Ná moto akei etumba, ná moto atikali mpo ya kokengele biloko, banso bakozwa biloko, esengeli ’te bakabolana. »
I Sa LinVB 30:25  Ut’o mokolo mona, Davidi akomisi yango mobeko mpe momeseno o Israel ; mo­zali se bongo tee lelo.
I Sa LinVB 30:26  Awa Davidi akomi o Siklag ati­ndeli bakolo ba Yuda, bandeko ba ye, ndambo ya biloko abotoloki o etu­mba, mpe alobi na bango : « Libonza liye nabotoloki banguna ba Yawe,
I Sa LinVB 30:27  na­pesi bino, bato ba Betul, ba-Rama o Negeb, ba-Yatir,
I Sa LinVB 30:29  ba-Karmel, bi­ngumba bya Yerameel mpe bya Kena­t,
I Sa LinVB 30:31  ba-Ebron mpe bato ba bisika binso Davidi na bato ba ye balekaki. »
Chapter 31
I Sa LinVB 31:1  Ba-Filisti babundisi bato ba Israel, mpe ba-Israel bakimi o miso ma ba-Filisti. Bibembe bya bato bilali o ngomba Gilboa.
I Sa LinVB 31:2  Ba-Filisti balandi Saul na bana ba ye ; babomi Yonatan, Abinadab na Malkisua, bana ba Saul.
I Sa LinVB 31:3  Etumba ezongeli Saul. Bato ba litimbo bamoni ye, mpe Saul akomi kobanga bango.
I Sa LinVB 31:4  Alobi na moto amemi bibuneli bya ye : « Bimisa mopanga mwa yo mpe tubola ngai mpo ’te baye bakatemi nzoto te baya kotubola ngai te, baseke mpe ngai te. » Kasi moto amemeli ye bibuneli aboyi, zambi abangi mingi. Saul aka­mati mopanga mpe amituboli.
I Sa LinVB 31:5  E­mo­ni mosali wa Saul ’te Saul akufi, ye mpe asali lokola Saul, amituboli mpe akufi se bongo.
I Sa LinVB 31:6  Saul, bana ba ye basato na mosali wa ye, ná mpe bato ba ye, banso bakufi se o mokolo mona.
I Sa LinVB 31:7  Awa ba-Israel, baye bazalaki o ngambo ya lobwaku mpe o ngambo ya Yordane bamoni ’te bato ba Israel bazalaki kokima, bamoni mpe ’te Saul na bana ba ye bakufi, bango mpe batiki mboka ya bango mpe bakimi. Ba-Filisti bayei kofanda wana.
I Sa LinVB 31:8  Mokolo mwa nsima ba-Filisti bayei kobotolo biloko bya bato bawei. Bakuti Saul na bana ba ye basato, bibembe bya bango bilali o ngomba Gilboa.
I Sa LinVB 31:9  Bakati motó mwa Saul mpe babotoli ye bibuneli bya ye. Bata­mbwisi nsango o mokili mwa ba-Filisti mpo bayebisa likambo o ndako ya banzambe ba bango mpe o kati ya bato banso.
I Sa LinVB 31:10  Batii bibuneli bya Saul o tempelo ya Astarte mpe babaki ebe­mbe ya ye o efelo ya Bet-Sean.
I Sa LinVB 31:11  Bato ba Yabes o mokili mwa Galaad bayoki makambo ba-Filisti basalaki Saul.
I Sa LinVB 31:12  Bato baleki motema mpiko basimbi nzela mpe batamboli butu mobimba ; balongoli bibembe bya Saul na bana ba ye o lopango la Bet-Sean. Bayei na byango o Yabes mpe batumbi byango.
I Sa LinVB 31:13  Bakamati mi­nkuwa mya bango mpe bakundi myango o nse ya nzete ya tamaris o Yabes. Na nsima balali nzala mikolo nsambo.