Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
JOHN
Up
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16 17 18 19 20 21
Chapter 1
John LinVB 1:1  O libandela Liloba azalákí. Liloba azalákí epai ya Nzámbe mpé Liloba azalákí Nzámbe.
John LinVB 1:2  Ut’o libandela Liloba azalákí epái ya Nzámbe.
John LinVB 1:3  Bínso bisálémí na yě ; sókí yě té, elóko yǒ kó esálémákí té.
John LinVB 1:4  Bomoi bozalákí o Liloba mpé bomoi bozalákí Mwínda mwa bato.
John LinVB 1:5  Mwínda mozalákí kongenge o káti ya molílí, kasi bato ba molílí bayambí mwangó té.
John LinVB 1:6  Nzámbe atíndí moto mǒkó nkó­mbó ’te Yoáne.
John LinVB 1:7  Yě moto ayéí lokóla nzénénéké kosangela bato Mwínda, mpô ’te bato bánso báyamba Mwínda mpô ya maloba ma yě.
John LinVB 1:8  Yě mpenzá azalákí Mwínda té, azalákí bobélé nzénénéké óyo ayéí kosangela bato Mwínda.
John LinVB 1:9  Mwínda moye, mwínda mwa sôló moyéí o nsé kongengele bato bánso.
John LinVB 1:10  Liloba azalákí áwa o mokili. Na yě Nzámbe akeláká mokili ; nzókandé bato ba mokili baya­mbí yě té.
John LinVB 1:11  Ayéí o ekólo ya yě mǒ­kó, kasi bato ba yě bayambí yě té.
John LinVB 1:12  Kasi baye bayambí yě, baye ba­ndimí Nkómbó ya yě, apésí bangó likokí lya kokóma bána ba Nzámbe.
John LinVB 1:13  Bakómí bána ba Nzámbe na loléngé la bomoto té, na mpósá ya nzóto té, kasi babótámí na Nzámbe.
John LinVB 1:14  Liloba akómí moto mpé azalákí o ntéi ya bísó, Tomónókí nkémbo ya yě, nkémbo ya Mwána sé mǒkó eye azwí na Tatá atóndí na bolingi mpé na bosôló.
John LinVB 1:15  Yoáne asakólí mpô ya yě, alobí : « Tálá moto óyo nayébísí bínó ’te Oyo akoyâ nsima ya ngáí, alekí ngáí, zambí yě azalákí liboso na ngai. »
John LinVB 1:16  Oyo atóndí na makabo maye akabélí bísó bánso, apésí bísó ngrá­sya mbala na mbala.
John LinVB 1:17  Tozwákí Mobéko na mabóko ma Móze, kasi ngrásya na bosôló iyéí na Yézu Krístu.
John LinVB 1:18  Moto mǒkó amóní naíno Nzámbe té ; kasi Mwána sé mǒkó wa Yě, óyo azalí o mbóka Tatá, yě moto ayébísí bísó Nzámbe.
John LinVB 1:19  maye mazali maloba Yoáne alobákí ntángo ba-Yúda ba Yerúzalem batí­ndákí banganga Nzámbe na ba-Lévi epái ya yě bátúna yě : « Yǒ ozalí náni ? »
John LinVB 1:20  Yoáne asakólí polélé, awángání té, alobí : « Ngáí nazalí Krístu té. »
John LinVB 1:21  Batúní yě : « Bôngó yǒ náni ? Yǒ ndé Elía ? » Alobí : « Nazalí Elía té. » Batúní lisúsu : « Ozalí proféta óyo asengélí koyâ ? » Alobí : « Té. »
John LinVB 1:22  Batúní yě lisúsu : « Bôngó yǒ náni ? Yébísá bísó, tókende kopésa eyano na bato batíndí bísó. Yǒ mǒkó olobí ’te ozalí náni ? »
John LinVB 1:23  Yoáne ayanólí : « Ngáí nazalí mongóngó mwa moto óyo azalí kobélela o elíkí : Bóbongisela Mokonzi nzelá, lokóla proféta Izaya alobáká. »
John LinVB 1:24  Baye batíndámákí bazalákí ba lingómbá lya ba-Farizéo.
John LinVB 1:25  Batúní yě : « Sókó ozalí Krístu té, Elía té, proféta mpé té óyo asengélí koyâ, mpô níni ozalí kobátisa bato ? »
John LinVB 1:26  Yoáne ayanólí bangó : « Ngáí nazalí kobátisa na mái ; kasi o ntéi ya bínó moto mǒkó azalí, bínó boyébí yě té.
John LinVB 1:27  Yě akoyâ nsima ya ngáí, kasi nabongí kofungola nsinga ya bikótó bya yě té. »
John LinVB 1:28  Makambo maye mánso malekákí o Betánia o ngámbo ya Yordáne, esíká Yoáne azalákí kobátisa.
John LinVB 1:29  Mokolo mwa nsima, ntángo Yoáne amóní Yézu azalákí koyâ epái ya yě, alobí : « Tálá mwâ Mpatá ya Nzámbe, óyo akolongola lisúmu lya nsé.
John LinVB 1:30  Mpô ya yě nalobákí ’te : Nsima ya ngáí moto mǒkó akoyâ, alekí ngáí, zambí azalákí ntángo babótí ngáí naíno té.
John LinVB 1:31  Ngáí mpé nayébákí yě té, kasi nayéí kobátisa na mái mpô ’te ba-Israél báyéba yě. »
John LinVB 1:32  Mpé Yoáne akóbí kosakola : « Namónókí Elímo aútí o likoló lokóla ebengá mpé atíkálí likoló lya yě.
John LinVB 1:33  Ngáí mpé nayébákí yě té ; kasi óyo atíndí ngáí nábátisa na mái, alobí na ngáí : Moto óyo okomóno Elímo akokitela yě, yě moto akobátisa na Elímo Sántu.
John LinVB 1:34  Ngáí moto namónókí yangó, yangó wâná nasakólí ’te Yě azalí Mwána wa Nzámbe. »
John LinVB 1:35  Mokolo mwa nsima Yoáne azalákí wâná lisúsu na bayékoli ba yě bábalé.
John LinVB 1:36  Yoáne atálí Yézu ntángo azalákí koleka, alobí : « Tálá mwâ Mpatá ya Nzámbe. »
John LinVB 1:37  Eyókí bayékoli bábalé maloba mâná, balandí Yézu.
John LinVB 1:38  Yézu atálí o nsima, amóní bangó bazalákí kolanda yě, alobí na bangó : « Bozalí koluka níni ? » Bayanólí yě : « Rábi, lokóla ’te Motéyi, okofándaka wápi ? »
John LinVB 1:39  Yézu alobí na bangó : « Bóyâ kotála. » Bôngó bakeí na yě mpô bámóno esíká azalákí kofánda ; mokolo môná batíkálí epái ya yě. Ezalákí ngonga sókí ya ínei ya mpókwa.
John LinVB 1:40  Andréa, ndeko wa Simóni Pétro, azalákí mǒkó wa bayékoli baye bábalé bayókákí maloba ma Yoáne mpé balandákí Yézu.
John LinVB 1:41  Andréa akútání libosó na ndeko wa yě Simóni, alobí na yě : « Tomóní Mesíya », yě ndé Krístu.
John LinVB 1:42  Akeí na yě epái ya Yézu. Yézu atálí yě, alobí : « Yǒ Simóni, mwána wa Yoáne, út’o leló bakobénga yǒ Pétro », lokóla ’te libángá.
John LinVB 1:43  Mokolo mwa nsima Yézu akání kokende o Galiléa, akútání na Filípo, alobí na yě : « Landá ngáí. »
John LinVB 1:44  Filípo azalákí moto wa Betsáida, mbóka ya Andréa na Pétro.
John LinVB 1:45  Filípo akútání na Natánael, alobí na yě : « Tomóní moto óyo Móze akomáká mpô ya yě o búku ya Mo­béko, óyo baproféta bayébísáká : Yézu, mwána wa Yozéfu, wa Nazaréte. »
John LinVB 1:46  Natánael ayanólí yě : « Elóko níni ya malámu ekokí (ndé) koúta o Nazaréte ? » Filípo alobí na yě : « Yáká, ótála. »
John LinVB 1:47  Yézu amóní Natánael azalákí koyâ epai na ye, alobí mpô ya yě : « Tálá mo-Israél wa sôló, moto azalí na lokutá té. »
John LinVB 1:48  Natánael atúní yě : « Ndéngé níni oyébí ngáí ? » Yézu azóngísélí yě : « Libosó ’te Filípo ábê­nga yǒ, namónókí yǒ o nsé ya nzeté ya fígi. »
John LinVB 1:49  Natánael azóngísí : « Rábi, yǒ ozalí Mwána wa Nzámbe, ozalí Mokonzi wa Israél. »
John LinVB 1:50  Yézu ayanólí yě : « Oya­mbí zambí nalobí na yǒ ’te namónókí yǒ o nsé ya nzeté ya fígi ! Okomóno makambo masúsu makoleka óyo na bonéne. »
John LinVB 1:51  Mpé abakísí : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : bokomóno likoló likofungwama mpé bǎnzelú ba Nzámbe bakobuta mpé bakokita mpô ya Mwána wa Moto. »
Chapter 2
John LinVB 2:1  Nsima ya mikolo míbalé eyenga ya libála ezalákí o Kána o Galiléa ; mamá wa Yézu azalákí kúná.
John LinVB 2:2  Babéngí mpé Yézu na bayékoli ba yě o limpáti.
John LinVB 2:3  Awa víno esílí, mamá wa Yézu alobí na yě : « Bazalí na víno té. »
John LinVB 2:4  Yézu azóngísélí yě : « Mwasi, likambo níni ngai na yo ? Elaká ya ngáí ekokí naíno té. »
John LinVB 2:5  Mamá wa yě alobí na basáleli : « Sóko alobi likambo, bosála. »
John LinVB 2:6  Ezalákí wâná mbéki motóbá mpô ya komípétola, lokóla ba-Yúda bameséní kosála. Mbéki yǒ kó yǒ kó ekokí kokwa masangála mwambe tǒ zómi na mábalé.
John LinVB 2:7  Yézu alobí na bangó : « Bótóndisa mbéki na mái. » Bató­ndísí yangó meké.
John LinVB 2:8  Yézu alobí : « Bótóka mwâ moké sikáwa, bókende kopésa yangó na kapíta wa balámbi. » Bakeí kopésa yě.
John LinVB 2:9  Kapíta amekí mái mabóngwání víno, ayébí té epái eútí ; kasi basáleli batókákí mái bayébí. Kapíta wa balámbi abéngí mobáli abálí sika,
John LinVB 2:10  alobí na yě : « Bakopésaka víno elengi libosó ; mpé ntángo bato bamelí míngi, bakopésa víno ezalí elengi míngi té. Kasi yǒ obómbí víno elengi téé siká­wa. »
John LinVB 2:11  Ezalí likamwísi lya yambo Yézu asálí. Asálí lyangó o Kána o Galiléa. Alakísí bôngó nkémbo ya yě, mpé bayékoli ba yě baya­mbí yě.
John LinVB 2:12  Na nsima akeí o Kafárnaum elongó na mamá, na bandeko mpé na bayékoli ba yě, kasi batíkálí kúná mikolo míngi té.
John LinVB 2:13  Pásiká ya ba-Yúda ekómí penepene ; Yézu akeí o Yerúzalem.
John LinVB 2:14  O Té­mpelo akútí bato bakotékeke ngó­mbé, mpatá na bibengá, ná mpé bato bakosénzeke mbóngo bafándí wâná.
John LinVB 2:15  Asálí fímbo na mikulu, abengání bangó bánso o Témpelo, ná mpatá, ná ngómbé ; apanzí mosolo mwa baye bazalákí kosénze mbóngo, mpé akwêísí méza ya bangó.
John LinVB 2:16  Alobí na bato bazalákí kotéke bibengá : « Bólongola byangó áwa ! Bókómisa ndáko ya Tatá wa ngáí ndáko wa mombó­ngo té ! »
John LinVB 2:17  Bayékoli bakundólí o mitéma maloba maye : Nawéí na mpósá ya kokúmisa ndáko ya Yǒ.
John LinVB 2:18  Bôngó ba-Yúda batúní yě : « elembo níni okolakisa bísó ’te okokí kosála bôngó ? »
John LinVB 2:19  Yézu azóngísélí bangó : « Bóboma ndáko eye esan­tu, na mikolo mísáto nakotó­nga yangó lisúsu. »
John LinVB 2:20  Ba-Yúda bazóngísélí yě : « Basengélákí na mibú ntúkú ínei na motóbá mpô ya kotónga ndáko eye esántu, bôngó yǒ okotónga yangó lisúsu na mikolo mísáto. »
John LinVB 2:21  Kasi Yézu alobákí bôngo mpô ya ndáko esántu ya nzóto ya yě.
John LinVB 2:22  Ntángo asékwí o bawá, bayékoli bakundólí o mitéma ’te alobákí bôngó, mpé bayambí maye makomámí o Minkandá Misántu ná mpé maloba Yézu alobákí.
John LinVB 2:23  Ntángo Yézu azalákí o Yerúzalem mpô ya eyenga ya Pásiká, bato míngi, áwa bamóní makamwísi yě asálí, bayambí Nkómbó ya yě.
John LinVB 2:24  Kasi Yézu atíí motéma na bangó té, zambí ayébí bangó bánso ;
John LinVB 2:25  moto mǒ­kó té asengélákí koyébisa yě makambo ma bato, zambí ayébí maye mazalí o mitéma mya bangó.
Chapter 3
John LinVB 3:1  Ezalaki mǒkó wa ba-Farizéo, nkómbó ’te Nikodémo, nkúmú wa ba-Yúda,
John LinVB 3:2  ayéí na butú epái ya Yézu. Alobí na yě : « Motéyi, toyébí ’te Nzámbe atíndí yǒ mpô ótéya bato ; moto mǒkó té akokí kosála bilémbo biye yǒ ozalí kosála, sókó Nzámbe azalí na yě té. »
John LinVB 3:3  Yézu azóngísélí yě : « Ya sôló sôló, nalobí na yǒ : moto mǒkó té akokí komóno Bokonzi bwa Nzámbe, sókó abótámí mbala ya íbalé té. »
John LinVB 3:4  Nikodémo atúní yě : « Bóníbóní moto akokí kobótama lisúsu, áwa asílí akómí mobangé ? Akokí ndé kozónga o libumu lya mamá mpé kobótama mbala ya íbalé ? »
John LinVB 3:5  Yézu ayanólí : « Ya sôló sôló, nalobí na yǒ : moto mǒkó té akokí kokóto o Bokonzi bwa Nzámbe sókó abótámí na mái mpé na Elímo Sántu té.
John LinVB 3:6  Oyo abótámí na mosuni azalí mosuni, óyo abótámí na Elímo azalí elímo.
John LinVB 3:7  Oká­mwa té zambí nalobí na yǒ : Bose­ngélí bóbótama lisúsu.
John LinVB 3:8  Mompepe mokopepe epái moli­ngí, mpé okoyóka lokitó la mwa­ngó ; kasi okoyéba té epái mompepe mokoúta tǒ mokokende. Sé bôngó bato bánso babótámí na Elímo. »
John LinVB 3:9  Nikodémo ayanólí yě : « Yangó ekosálema bóníbóní ? »
John LinVB 3:10  Yézu azóngísélí yě : « Yǒ ozalí motéyi o Israél mpé oyébí makambo óyo té ?
John LinVB 3:11  Ya sôló sôló, nalobí na yǒ : bísó tokolobaka maye toyébí, mpé tokoyébisaka maye tomónókí ; kasi bínó bondimí maloba ma bísó té.
John LinVB 3:12  Sókó bondímí makambo ma nsé té, maye nayébísí bínó, bóníbóní bokoya­mba sókó nayébísí bínó mambí ma likoló ?
John LinVB 3:13  Moto mǒkó té asílí abutí o likoló, bobélé Oyo aútákí o likoló, yě ndé Mwána wa Moto.
John LinVB 3:14  Móze atómbólákí nyóka o elíkí, bobélé bôngó Mwána wa Moto asengélí kotó­mbwama,
John LinVB 3:15  mpô ’te moto nyó­nso ayambí yě ázwa bomoi bwa sékô.
John LinVB 3:16  Nzámbe akolingaka bato míngi mpenzá, yangó wâná apésí bangó Mwána sé mǒkó wa yě, mpô ’te moto nyónso ayambí yě ábú­ngama té, kasi ázwa bomoi bwa sékô.
John LinVB 3:17  Nzámbe atíndí Mwána wa yě áwa o nsé mpô ya kosámbisa bato té, kasi mpô ’te ábíkisa bangó.
John LinVB 3:18  Moto ayambí Mwána, bakosá­mbisa yě té ; kasi moto ayambí Mwána té, asílí akití o likambo, mpámba té, ayambí Nkó­mbó ya Mwána sé mǒkó wa Nzámbe té.
John LinVB 3:19  Tálá ndéngé bakokáta likambo : Mwínda moyéí o nsé ; kasi bato bapusí kolinga molílí, mpô misálá mya bangó mizalí mabé.
John LinVB 3:20  Ya sôló, moto nyónso akosálaka mabé, akoyinaka mwínda mpé akokímaka mwangó, mpô ’te misálá mya yě míyébana té.
John LinVB 3:21  Kasi moto akosálaka mambí ma bosôló akokende epái ya mwínda, mpô ’te émónono ’te misálá mya yě misálémí na botósi Nzámbe. »
John LinVB 3:22  Nsima yangó Yézu na bayékoli ba yě bakeí o ekólo ya Yudéa ; atíkálí kuná mwâ mikolo elongó na bangó, mpé abátísí bato.
John LinVB 3:23  Yoáne mpé azalákí kobátisa o Enon penepene na Salim, mpô mái mazalákí míngi kúná ; bato míngi bayéí kokúla batísimo.
John LinVB 3:24  O ntángo êná Yoáne akangémákí naíno o bolóko té.
John LinVB 3:25  Mokolo mǒkó bayékoli basúsu ba Yoáne bawélání ntembe na mo-Yúda mǒkó mpô ya ndéngé bakomípétolaka.
John LinVB 3:26  Bakeí epái ya Yoáne, balobí na yě : « Rábi, moto óyo azalákí na yǒ o ngámbo ya Yordáne, óyo osakólákí mpô ya yě, akómí kobátisa bato mpé bánso bazalí kokende epái ya yě. »
John LinVB 3:27  Yoáne azóngísí : « Moto akokí kozwa elóko té, sókó Nzámbe apésí yě té.
John LinVB 3:28  Bínó mǒkó boyókákí ’te nalobákí : Ngáí nazalí Krístu té, kasi natíndámí libosó lya yě.
John LinVB 3:29  Nkóló wa mwásí ndé mobáli, kasi móníngá wa boló­ngani, óyo atélémí penepene na yě mpé ayókí yě, atóndí na nsáí mpô ayókí mongóngó mwa mobáli. Yangó ndé esengo ya ngáí, mpé nayókí esengo enéne mpenzá.
John LinVB 3:31  Oyo aútí o likoló alekí bánso ; óyo aútí o nsé, azalí moto wa nsé mpé akolobaka lokóla moto wa nsé. Kasi óyo aútí o likoló alekí bánso ;
John LinVB 3:32  akosakolaka maye amónókí mpé ayókákí, kasi moto mǒkó akoyamba maloba ma yě té.
John LinVB 3:33  Moto ayambí maloba ma yě, andimí ’te Nzámbe akolobaka mambí ma bosôló.
John LinVB 3:34  Moto óyo Nzámbe atíndí, akolobaka maloba ma Nzámbe mpenzá, mpô Nzámbe atóndísí yě na Elímo wa yě.
John LinVB 3:35  Tatá alingí Mwána mpé atíí mánso o mabóko ma yě.
John LinVB 3:36  Moto ayambí Mwána, azalí na bomoi bwa sékô ; moto abóyí koyamba Mwána, akozwa bomoi té ; nkándá ya Nzámbe ekokwêla yě sékô. »
Chapter 4
John LinVB 4:1  Ba-Farizéo bayókákí ’te Yézu akómí na bayékoli míngi mpé azalákí kobátisa bato, leká Yoáne.
John LinVB 4:2  Nzókandé Yézu yě mǒkó azalákí kobátisa té, sé bayékoli ba yě bazalákí kobátisa.
John LinVB 4:3  Eyókí Yézu bôngó, alongwí o Yudéa mpé azóngí o Galiléa.
John LinVB 4:5  akómí bôngó o Sikar, mbóka yǒ kó ya Samaría, penepene na mabelé maye Yakób apésáká mwána wa yě Yozéfu.
John LinVB 4:6  Libúlú lya mái lya Yakób lizalí o esíká êná. Yézu alembí na botámboli, afándí o mpe­mbéni ya libúlú lyangó. Ezalákí penepene na ngonga ya midí.
John LinVB 4:7  Mwásí mǒkó wa Samaría ayéí kotóka mái. Yézu alobí na yě : « Pésá ngáí mái námele. »
John LinVB 4:8  Bayékoli bakendékí o mbóka kosómba bilóko bya kolía.
John LinVB 4:9  Mwásí wa Samaría alobí na yě : « Ndéngé níni yǒ mo-Yúda okokí kosénge ngáí, mwásí wa Samaría, mái ? » Atúní yangó mpámba té, mpô ba-Yúda na ba-Samaría bazalákí koyókana té.
John LinVB 4:10  Yézu azóngísélí yě : « Sókó oyébákí likabo la Nzámbe, mpé sókó oyébákí náni mpenzá asé­ngí yǒ mái ma komele, mbele yǒ mǒkó olingákí kosénge mái, mpé yě alingákí kopésa yǒ mái ma bomoi. »
John LinVB 4:11  Mwásí alobí na yě : « Mokonzi, ozalí na elóko ya kotóka mái té, mpé libúlú lizalí bozi­ndó. Bôngó okozwa mái ma bomoi wápi ?
John LinVB 4:12  Okanísí ndé ’te olekí nkóko wa bísó Yakób ? apésákí bísó libúlú liye ; azalákí komele mái áwa, yě mǒkó ná bána ba yě, ná bibwélé bya yě. »
John LinVB 4:13  Yézu azóngísélí yě : « Mo­to akomele mái maye, akoyóka lisúsu mpósá ya mái ;
John LinVB 4:14  kasi moto akomele mái ngáí nakopésa, akoyóka lisúsu mpósá ya mái mokolo mǒ­kó té, zambí mái ngáí nakopésa yě, makokómela yě líziba likopésa bomoi bwa sékô. »
John LinVB 4:15  Mwásí alobí na yě : « Mokonzi, pésá ngáí mái mâná, bôngó náyóka lisúsu mpósá ya mái té, mpé náyâ lisúsu kotóka áwa té. »
John LinVB 4:16  Yézu alobí na yě : « Kendé kobênga mobáli wa yǒ mpé zóngá áwa. »
John LinVB 4:17  Mwásí azóngísélí yě : « Nazalí na mobáli té. » Yézu alobí na yě : « Olobí ya sôló ’te ozalí na mobáli té,
John LinVB 4:18  zambí ozalákí na babáli bátáno, mpé óyo afándí na yǒ sikáwa azalí mobáli wa yǒ té. Olobí likambo lya sôló. »
John LinVB 4:19  Mwásí alobí na yě : « Mokonzi, namóní ’te ozalí proféta.
John LinVB 4:20  Ba­nkóko ba bísó bakúmísáká Nzámbe o ngómbá eye ; kasi bínó ba-Yúda bokolobaka ’te : ‘Basengélí kokúmisa Nzámbe o Yéruzalem’. »
John LinVB 4:21  Yézu alobí na yě : « Mwási, ndimá maloba ma ngáí : eleko ekoyâ bakokúmisa Tatá o ngómbá eye tǒ o Yerúzalem té.
John LinVB 4:22  Bínó ba-Samaría bokokúmbamelaka Nzámbe óyo boyébí té ; bísó tokokúmbamelaka Nzámbe óyo toyébí, zambí libíkí likoúta na ba-Yúda.
John LinVB 4:23  Kasi eleko ekoyâ, yangó esílí ekokí, bato bakosámbelaka sôló bakokú­mbamela Tatá o mitéma na ndéngé ya sôló, zambí Tatá alingí bato bakokúmbamelaka yě bôngó.
John LinVB 4:24  Nzámbe azalí Elímo, mpé bato bakokúmbamelaka yě base­ngélí kosála yangó o mitéma na ndéngé ya sôló. »
John LinVB 4:25  Mwásí alobí na yě : « Nayébí ’te Mesíya óyo bakobéngaka Krístu akoyâ. Ntángo akoyâ, akolimbolela bísó mánso. »
John LinVB 4:26  Yézu alobí na yě : « Mesíya, ngáí óyo nazalí koloba na yǒ. »
John LinVB 4:27  O ntángo êná bayékoli ba yě bazóngí. Bamóní ’te Yézu azalákí kosolola na mwásí, nzókandé moto mǒkó té alobí na yě : « Ozalí kotúna yě níni ? » tǒ : « Ozalí kosolola na yě níni ? »
John LinVB 4:28  Mwásí atíkí mbéki ya yě, akeí mbángu o mbóka mpé alobí na bato :
John LinVB 4:29  « Yákáni botála moto ayébísí ngáí mánso nasálí. Akokí kozala Krístu té ? »
John LinVB 4:30  Bato babimí o mbóka mpé bakeí epái ya Yézu.
John LinVB 4:31  O ntángo êná bayékoli babó­ndélí Yézu, balobí : « Motéyi, líá mwâ moké. »
John LinVB 4:32  Kasi alobí na bangó : « Bilóko ngáí nasengélí kolía, bínó boyébí byangó té. »
John LinVB 4:33  Bayékoli batúnání : « Moto mǒkó ayélákí yě bilóko bya kolía tǒ ? »
John LinVB 4:34  Yézu alobí na bangó : « Biléi bya ngáí, ndé kosála maye óyo atíndí ngáí akolingaka, mpé kosúkisa mosálá mwa yě !
John LinVB 4:35  Bínó bokoloba té ’te etíkálí sánzá ínei tókóma o eleko ya bobúki mbuma ? Kasi ngáí nalobí : Bótómbola míso mpé bótála bilanga : mbuma ikomélí, bakokí kobúka yangó.
John LinVB 4:36  Moto abúkí mbuma asílí kozwa lifúta lya yě mpé asangísí mbuma mpô ya bomoi bwa lobíko. Bôngó moto alóní mbóto ná óyo abúkí mbuma bakosepela elongó.
John LinVB 4:37  Bakolobaka : Mosúsu akolóna, mosúsu akobúka mbuma : ezalí ya sôló.
John LinVB 4:38  Ngáí natí­ndí bínó bóbúka mbuma iye bínó bolónákí té ; bato basúsu bamíle­mbísákí na mosálá mwangó, mpé bínó bozwí bolámu mpô ya mosálá bangó basálí. »
John LinVB 4:39  O mbóka êná ba-Samaría baíké bayambí Yézu mpô ya maloba mwásí alobákí : « Ayébísí ngáí mánso nasálí. »
John LinVB 4:40  Bôngó ntángo ba­kómí epái ya yě, babóndélí yě ’te átíkala o mbóka ya bangó. Yangó wâná Yézu atíkálí kúná mikolo míbalé.
John LinVB 4:41  Bato basúsu naíno míngi bayambí yě mpô ya maloba ma yě ;
John LinVB 4:42  balobí na mwásí ôná : « Sikáwa toyambí bobélé mpô ya maloba ma yǒ té ; bísó mǒkó toyókí mpé toyébí ’te azalí sôló Mobíkisi wa bato bánso. »
John LinVB 4:43  Nsima ya mikolo míbalé Yézu alongwí kúná mpé akeí o Galiléa.
John LinVB 4:44  Yě mǒkó asakólákí ’te proféta mǒ­kó té akozwa lokúmu o mbóka ya yě méí.
John LinVB 4:45  Ekómí yě o Galiléa, bato ba Galiléa bayambí yě malámu, zambí bangó mpé bakendékí o Yerúzalem mpô ya eyenga, mpé bamónókí mánso asálákí o ntángo ya eyenga êná.
John LinVB 4:46  Yézu azóngí o Kána ya Gali­léa, esíká abóngólákí mái víno. Ezalákí o Kafárnaum mosáleli monéne wa érode, mwána wa yě azalákí kobéle.
John LinVB 4:47  Ntángo ayókákí ’te Yézu alongwí o Yudéa mpé akómí o Galiléa, moto ôná akeí kokútana na Yézu mpé abóndélí yě ’te áyâ kobíkisa mwána wa yě azalákí kobunda na mpási ya liwá.
John LinVB 4:48  Yézu alobí na yě : « Bínó sókó bomóní bilembo na makamwísi té, bokoyamba té ! »
John LinVB 4:49  Mosáleli wa érode azóngísí : « Mokonzi, yáká libosó ’te mwána ákáta motéma. »
John LinVB 4:50  Yézu alobí na yě : « Kendé, mwána wa yǒ azalí na bomoi ! » Andimí maloba ma Yézu mpé akeí.
John LinVB 4:51  Ntángo azalákí kozónga, basáleli ba yě bayéí kokútana na yě, bayébísí yě ’te mwána azalákí na bomoi.
John LinVB 4:52  Atúní bangó o ngonga níni mwána abandákí koyóka malámu. Balobí ná yě : « Lóbí, o ngonga ya libosó nsima ya midí, féfele etíkí yě. »
John LinVB 4:53  Tatá ayébí ’te ezalákí bobélé ngonga eye Yézu alobákí na yě : « Mwána wa yǒ azalí na bomoi. » Ayambí, yě na libótá lya yě mobimba.
John LinVB 4:54  Elémbo eye, ezalí lya mába­lé, Yézu asálí lyangó ntángo alo­ngwí o Yudéa mpé azóngí o Galiléa.
Chapter 5
John LinVB 5:1  Nsima yangó Yézu akeí o Yerúzalem mpô ya eyenga ya ba-Yúda.
John LinVB 5:2  O Yerúzalem, penepene na ‘Ezibeli ya mpatá’, mwâ etíma ezalákí na mbalasáni ítáno, eye bakotángaka o ebréi Betzata.
John LinVB 5:3  Bato ba bokono baíké bazalákí kolála o mbalasáni iye : bato ba lolandá, bato babúkáná makolo na baténgoli. Bazalákí kozila ’te mái máningana.
John LinVB 5:4  Mpámba té, ntángo esúsu ǎnzelú wa Nzámbe azalákí kokita o etíma mpé koningisa mái. Moto wa libosó akótí o mái ntángo mabandí koningana, abíkí, atâ azalákí na mpási níni.
John LinVB 5:5  Ezalákí wâná moto asílí abélí mibú ntúkú mísáto na mwambe.
John LinVB 5:6  Yézu amóní yě alálí wâná, ayébí ’te abélí út’o kala, atúní yě : « Olingí kobíka ? »
John LinVB 5:7  Moto wa bokono azóngísí : « Mokonzi, nazalí na moto té ábwáka ngáí o líziba ntángo mái mabandí koningana ; mpé sókó namekí kokende ngáí mǒkó, mosúsu asílí akótí libosó. »
John LinVB 5:8  Yézu alobí na yě : « Télémé, kamátá kitikwálá ya yǒ mpé támbólá. »
John LinVB 5:9  Na mbala yǒ kó abíkí, akamátí kitikwálá ya yě mpé akeí. Nzókandé mokolo wana ezalákí mokolo mwa sábato.
John LinVB 5:10  Yangó wâná ba-Yúda balobí na moto abíkí : « Leló mokolo mwa sábato, okokí komeme kiti­kwálá ya yǒ té. »
John LinVB 5:11  Azóngísí : « Moto óyo abíkísí ngáí alobákí : Kamátá kitikwálá ya yǒ mpé támbólá. »
John LinVB 5:12  Batúní yě : « Náni moto alobákí na yǒ : Kamátá kitikwálá ya yǒ mpé támbólá ? »
John LinVB 5:13  Kasi moto abíkí ayébí yě té, zambí Yézu amónóní lisúsu té, mpô bato balekí míngi o esíká êná.
John LinVB 5:14  Na nsima Yézu akútí yě o Témpelo, alobí na yě : « Sikáwa obíkí, ósála lisúsu masúmu té, mpô ’te likambo lilekí mabé líkwêla yǒ té. »
John LinVB 5:15  Moto ôná akeí koyébisa ba-Yúda ’te Yézu moto abíkísí yě.
John LinVB 5:16  Yangó wâná ba-Yúda bakómí kokánela Yézu, zambí asálí bôngó o mokolo mwa sábato.
John LinVB 5:17  Kasi Yézu alobí na bangó : « Tatá wa ngáí akosálaka mosálá téé leló ; ngáí mpé nazalí kosála mosá­lá. »
John LinVB 5:18  Mpô ya maloba mâná mpé ba-Yúda balukí nzelá ya koboma yě, zambi abúkí bobélé mobéko mwa sábato té, kasi atángí mpé Nzámbe ‘Tatá wa yě ’ mpenzá, lokóla ’te yě mǒkó akokání na Nzámbe.
John LinVB 5:19  Na nsima Yézu alobí lisúsu : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Mwána yě mǒkó akokí kosála elóko té, akosálaka bobélé maye amóní Tatá azalí kosála. Mánso Tatá akosálaka, Mwána mpé akosálaka mangó.
John LinVB 5:20  Zambí Tatá alingí Mwána, mpé akolakisaka yě mánso yě mǒkó akosálaka. Akolakisa yě mpé misálá misúsu milekí misálá miye na bonéne. Bokokámwa na mya­ngó !
John LinVB 5:21  Lokóla Tatá akosékwisa bato bawéí mpé akozóngisela bangó bomoi, sé bôngó Mwána mpé akopésa bomoi na baye yě mǒkó alingí.
John LinVB 5:22  Tatá akokáta likambo lya moto mǒ­kó té ; apésí Mwána likokí lya kokáta makambo mánso,
John LinVB 5:23  mpô ’te bánso bákúmisa Mwána lokóla bakokúmisaka Tatá. Moto akokúmisa Mwána té, akokúmisa Tatá mpé té, óyo atíndí Mwána.
John LinVB 5:24  Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Moto ayókí maloba ma ngáí, mpé ayambí óyo atíndí ngáí, azalí na bomoi bwa sékô. Bakokitisa yě o li­kambo té, zambí asílí abíkí o liwá, a­zwí bomoi.
John LinVB 5:25  Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Ntá­ngo ekoyâ, mpé esílí ekokí, bato bawéí bakoyóka loláká la Mwána wa Nzámbe, mpé baye bakoyókemela langó bakozala na bomoi.
John LinVB 5:26  Lokóla Tatá azalí na bomoi bó­nso, asálí ’te Mwána mpé ázala na bomoi bónso.
John LinVB 5:27  Apésí Mwána mpé likokí lya kokáta makambo ma bato, zambí yě azalí Mwána wa Moto.
John LinVB 5:28  Bókámwa té, mokolo mǒkó bato bánso balálí o malíta bakoyóka loláká la yě
John LinVB 5:29  mpé bakobima. Baye basálákí malámu bakosékwa mpô ’te bázwa bomoi bwa sékô ; kasi baye basálákí mabé bakosékwa mpô ’te bákita o likambo.
John LinVB 5:30  Na ngúyá ya ngáí mǒkó nakokí kosála elóko té. Nakokáta makambo lokóla Nzámbe akoyébisa ngáí ; mpé nakokáta makambo sé na bosémbo, zambí nakolukaka mpô elingí ngáí mǒkó té, kasi sé mpô elingí óyo atí­ndí ngáí.
John LinVB 5:31  Sókó ngáí mǒkó nasakólí likambo litálí ngáí, maloba ma ngáí mazalí mpámba.
John LinVB 5:32  Kasi mosúsu akosakola mpô ya ngáí ; mpé nayébí ’te maye akolobaka mpô ya ngáí mazalí ma sôló.
John LinVB 5:33  Bínó botíndákí bato epái ya Yoáne, mpé Yoáne asakólákí mpô ya ngáí mambí ma sôló.
John LinVB 5:34  Nzókandé ngáí nasengélí na maloba ma moto té ; kasi nalobí bôngó bobélé mpô ya bolámu bwa bínó.
John LinVB 5:35  Yoáne azalákí mwínda mopelí mpé mongengí, mpé bondimákí kosepela mwâ ntángo eké na mwínda mwa yě.
John LinVB 5:36  Kasi eye ezalí kosengisa bato bá­ndima ngáí, leká maye Yoáne alobákí mpô ya ngáí, yangó ndé : misálá nakosálaka, miye Tatá apésí ngáí násála mpé násúkisa myangó, milakísí ’te Tatá moto atíndí ngáí.
John LinVB 5:37  Tatá óyo atíndí ngáí, yě méí akosakolaka mpô ya ngáí. Mokolo mǒkó té boyókí loláká la yě mpé bomóní elongi ya yě.
John LinVB 5:38  Bokobó­mbaka maloba ma yě té, zambí bobóyí koyamba óyo yě atíndí.
John LinVB 5:39  Bokoyékolaka Minka­ndá Misántu mpô bokanísí ’te bokozwa bôngó bomoi bwa sékô. Nzókandé minkandá miye mizalí koloba mpô ya ngáí.
John LinVB 5:40  Kasi bínó bobóyí koyâ epái ya ngáí mpô ya kozwa bomoi !
John LinVB 5:42  kasi nayébí ’te bozalí na bolingi Nzámbe o mitéma té.
John LinVB 5:43  Nayéí o nkómbó ya Tatá wa ngáí, nzókandé bobóyí koyamba ngáí. Sókó moto mosúsu ayéí o nkómbó ya yě mǒkó, bokondima yě.
John LinVB 5:44  Bínó bato bolingí kozwa lokúmu epái ya báníngá, kasi lokúmu loye lokoútaka na Nzámbe sé mǒkó, bokolukaka langó té. Bô­ngó ndéngé níni bokokí koyamba ?
John LinVB 5:45  Bókanisa té ’te ngáí nakofúnda bínó epái ya Tatá. Moto akofúnda bínó, ndé Móze, óyo bínó botíí mitéma.
John LinVB 5:46  Sókó boyambákí Móze, mbele boyambí ngáí lokóla, zambí yě akomákí o Bikomá mpô ya ngáí.
John LinVB 5:47  Kasi áwa boyambí té maye akomákí, bóníbóní bokoyamba maloba ma ngáí ? »
Chapter 6
John LinVB 6:1  Na nsima Yézu akeí o ngámbo ya etíma ya Galiléa, eye bako­tá­ngaka mpé etíma ya Tibéria.
John LinVB 6:2  Bato ebelé balandí yě, zambí bamónókí makamwísi asálákí na bobíkisi bato ba bokono.
John LinVB 6:3  Yézu abutí ngómbá, afándí wâná na bayékoli ba yě.
John LinVB 6:4  Eyenga ya Pásiká ya ba-Yúda ekómí penepene.
John LinVB 6:5  Yézu átála boye, amóní bato ebelé bazalákí koyâ epái ya yě. Atúní Filípo : « Tokosómba mámpa wápi mpô ’te bato baye bálía ? »
John LinVB 6:6  Alobí bôngó mpô ya komeka yě motéma ; yě mǒkó asílí ayébí níni akosála.
John LinVB 6:7  Filípo azóngísélí yě : « Atâ tosómbí mámpa ma denário nkámá íbalé, makokoka té mpô ’te moto na moto ázwa mwâ ndámbo. »
John LinVB 6:8  Mǒ kó wa bayékoli, Andréa, ndeko wa Simóni Pétro, alobí :
John LinVB 6:9  « Mwána mobáli mǒkó azalí áwa na mámpa mátáno mpé na mbísi íbalé. Kasi yangó ndé ekokoka na bato ebelé boye ? »
John LinVB 6:10  Yézu alobí na bangó : « Bófándisa bato bánso. » O esíká êná matíti mazalákí míngi. Bato bafándí, babáli sókí nkóto ítáno.
John LinVB 6:11  Yézu akamátí mámpa, asámbélí losá­mbo la botóndi, akabélí bato bafá­ndí wâná mámpa ; apésí bangó mpé mbísi, baléi lokóla mitéma mya bangó milingí.
John LinVB 6:12  Awa bato baléí mpé batóndí, alobí na bayékoli : « Bólókoto mintíka, míbéba té. »
John LinVB 6:13  Balokótí byangó, batóndísí bikoló zómi na bíbalé na mintíka mya mámpa mátáno.
John LinVB 6:14  Emóní bato elémbo Yézu asálí, balobí : « Sôló, moto óyo azalí proféta óyo asengélí koyâ o mokili. »
John LinVB 6:15  Awa Yézu amóní ’te balingí kokamata yě na makási mpô ya kolubola yě mokonzi, akímí mpé akeí lisúsu o ngómbá yě mǒkó.
John LinVB 6:16  Awa butú bolingí bóínda, bayékoli bakeí penepene na etíma,
John LinVB 6:17  ba­kwélí o bwáto, bakátísí ngámbo ya etíma, epái ya Kafárnaum. Ntángo molílí mokómí tû, Yézu akómí naíno epái ya bangó té.
John LinVB 6:19  Basílí balúkí nkái kilométele sókí ítáno na ndá­mbo, ntángo bamóní Yézu azalákí kotámbola likoló lya mái, abelémí na bwáto ; babángí.
John LinVB 6:20  Kasi Yézu alobí na bangó : « Bóbánga té, ezalí ngáí. »
John LinVB 6:21  Balingí koya­mba yě o bwáto, kasi sé o ntángo êná bwáto bokómí o libóngo, esíká bazalákí kokende.
John LinVB 6:22  Mokolo mwa nsima, bato batíkálí o ngámbo ya étíma bamónókí ’te bwáto bozalákí sé bǒ kó, mpé Yézu akwélákí o bwáto bôná té, bayékoli bakendékí bangó mǒkó.
John LinVB 6:23  Nzókandé máto masúsu malo­ngwákí o Tibéria, masémí penepene na esíká balíákí mámpa.
John LinVB 6:24  Awa bato bamóní ’te Yézu azalákí wâná té, bayékoli ba yě mpé té, bakwélí o máto, bakeí koluka Yézu o Kafárnaum.
John LinVB 6:25  Bakútí yě o ngámbo, balobí na yě : « Motéyi, okómí áwa ntángo níni ? »
John LinVB 6:26  Yézu azóngísí : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : bozalí koluka ngáí ezalí té mpô ya bilembo bomónókí, kasi mpô bolíákí mámpa mpé botóndákí, kasi.
John LinVB 6:27  Bósála mosálá té mpô ya biléi bikobéba, kasi mpô ya biléi bikoúmela kín’o bomoi bwa lobíko. Mwána wa Moto akopésa biléi bîná, zambí Tatá Nzámbe alakísí polélé ’te atíndí yě. »
John LinVB 6:28  Bôngó batúní yě : « Tósála níni mpô tókokisa misálá miye Nzámbe alingí ? »
John LinVB 6:29  Yézu azóngísí : « Mosálá Nzámbe akolingaka, boyamba óyo yě atíndí. »
John LinVB 6:30  Balobí na yě : « Bôngó elembo níni okolakisa bísó mpô tóyamba yǒ ? Okokí kosála níni ?
John LinVB 6:31  Bankóko ba bísó balíákí manú o elíkí, lokóla ekomámí o Bikomá Bisántu : Apésí bangó mámpa maútí o liko­ló. »
John LinVB 6:32  Yézu azóngísí : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : mámpa maútí o likoló Móze té moto apésákí bínó mangó, kasi Tatá wa ngáí akopésa bínó mámpa ma sôló maútí o likoló ;
John LinVB 6:33  zambí mámpa Nzámbe akopésa mazalí maye maútí o likoló, mpé makopésaka bato ba nsé bomoi. »
John LinVB 6:34  Balobí na yě : « Mokonzi, pésá bísó mámpa mâná mikolo mínso. »
John LinVB 6:35  Yézu azóngísí : « Ngáí nazalí má­mpa makopésa bomoi. Moto ako­yâ epái ya ngáí akoyóka nzala lisúsu té ; moto akoyamba ngáí akoyóka lisúsu mpósá ya mái té.
John LinVB 6:36  Nasílí nalobí na bínó : Bomónókí ngáí, kasi boyambí ngáí té.
John LinVB 6:37  Bato bánso Tatá apésí ngáí bakoyâ epái ya ngáí ; baye bakoyâ epái ya ngáí, nakobwáka bangó o libándá té,
John LinVB 6:38  zambí naútí o likoló mpô ya kosála mpô elingí ngáí té, kasi bobélé mpô elingí óyo atíndí ngáí.
John LinVB 6:39  Oyo atíndí ngáí alingí boye : Wa baye yě apésí ngáí nábúngisa moto mǒkó té, kasi násékwisa yě o mokolo mwa nsúka.
John LinVB 6:40  Tatá wa ngáí alingí ’te baye bánso bamóní Mwána mpé bayambí yě, bázwa bomoi bwa sékô, mpé ngáí nakosékwisa bangó o mokolo mwa nsúka. »
John LinVB 6:41  Ba-Yúda babandí kolobaloba míngi mpô ya Yézu mpô alobákí : « Ngáí nazalí mámpa maútí o likoló. »
John LinVB 6:42  Balobí : « Yě Yézu, mwána wa Yozéfu té ? Toyébí tatá na mamá wa yě. Bóníbóní akokí koloba : Ngáí naútí o likoló ? »
John LinVB 6:43  Yézu ayanólí bangó : « Bótíka kolobaloba.
John LinVB 6:44  Moto mǒkó akokí koyâ epái ya ngáí té sókó Tatá óyo atíndí ngáí, abéndí yě té ; mpé ngáí nakosékwisa yě o mokolo mwa nsúka.
John LinVB 6:45  Baproféta bakomáká ’te : Nzámbe akotéya bato bánso. Moto nyónso akoyóka matéya ma Nzámbe mpé akondima mangó, akoyâ epái ya ngáí.
John LinVB 6:46  Yangó elakísí té ’te moto mǒkó amóní Tatá ; bobélé óyo aútí epái ya Nzámbe, amóní Tatá.
John LinVB 6:47  Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Moto ayambí, azalí na bomoi bwa sékô.
John LinVB 6:49  Bankóko ba bínó balíákí manú o elíkí, nzókandé bawákí.
John LinVB 6:50  Kasi má­mpa maye maútí o likoló mpô ’te moto alía mangó mpe ákúfa té.
John LinVB 6:51  Ngáí nazalí mámpa ma bomoi maútí o likoló. Moto akolía mámpa maye, akozala na bomoi bwa sékô. Má­mpa ngáí nakopésa mazalí nsuni ya ngáí ; nakopésa mangó mpô ’te bato bázwa bomoi. »
John LinVB 6:52  Kasi ba-Yúda bawélání ntembe makási, balobí : « Bóníbóní moto óyo akokí kopésa bísó nsuni ya yě tólía yangó ? »
John LinVB 6:53  Yézu azóngísélí bangó : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Sókó bokolía nsuni ya Mwána wa Moto té, mpé bokomele makilá ma yě té, bokozala na bomoi té.
John LinVB 6:54  Oyo akolía nsuni ya ngáí mpé akomele makilá ma ngáí, azalí na bomoi bwa sékô, mpé nakosékwisa yě o mokolo mwa nsúka.
John LinVB 6:55  Zambí nsuni ya ngáí ezalí biléi bya sôló, mpé makilá ma ngáí mazalí limelí lya sôló.
John LinVB 6:56  Moto akolía nsuni ya ngáí mpé akomele makilá ma ngáí, bísó na yě tokokóma sé moto mǒkó.
John LinVB 6:57  Tatá atíndí ngáí azalí na bomoi, nazalí na bomoi mpô ya Tatá. Bobélé bôngó, moto akolía ngáí, yě mpé akozala na bomoi mpô ya ngáí.
John LinVB 6:58  Mámpa maútí o likoló mangó maye, makeséní na mámpa bankóko balíá. Bangó bánso bakúfá. Kasi moto akolía mámpa maye akozala na bomoi sékô. »
John LinVB 6:59  Yézu atéyákí matéya mâná o sinagóga ya Kafárnaum.
John LinVB 6:60  Awa bayókí yangó, bayékoli mí­ngi balobí : « Maloba mâná mazalí makási ! Náni akokí kondima mangó ? »
John LinVB 6:61  Kasi Yézu, áwa ayébí ’te bayékoli bazalákí kolobaloba mpô ya likambo liye, atúní bangó : « Boyókí mabé mpô ya yangó ?
John LinVB 6:62  Bôngó sókó bokomóno Mwána wa Moto akobuta o esíká azalákí libosó, bokokanisa níni ?
John LinVB 6:63  Elímo moto akopésaka bomoi, nsuni ezalí na ntína yǒ­kó té. Maloba nayébísí bínó mazalí maloba ma elímo mpé ma bomoi.
John LinVB 6:64  Kasi o ntéi ya bínó basúsu bazalí koyamba té. » Yézu ayébákí út’o ebandela banáni bakoyamba té, mpé náni akokaba yě.
John LinVB 6:65  Abakísí naíno : « Yangó wâná nayébísí bínó ’te moto mǒkó akokí koyâ epái ya ngáí té, sókó Tatá asálísí yě té. »
John LinVB 6:66  Bandá mokolo môná bayékoli baíké bamíbéndí, mpé balandí yě lisúsu té.
John LinVB 6:67  Na nsima Yézu atúní ba-zómi na bábalé : « Bínó mpé bolingí kokende ? »
John LinVB 6:68  Simóni Pétro azóngísí : « Mokonzi, tokokende epái ya náni ? Yǒ moto ozalí na maloba makopésa bomoi bwa sékô.
John LinVB 6:69  Bísó toyambí mpé toyébí ’te ozalí Mosántu wa Nzámbe. »
John LinVB 6:70  Yézu alobí : « Ngáí moto naponókí bínó zómi na bábalé té ? Nzókandé mǒkó o ntéi ya bínó azalí zábolo. »
John LinVB 6:71  Alobí bôngó mpô ya Yudási, mwána wa Simóni Iskarióte, zambí Yudási óyo akokaba Yézu, azalákí mǒkó wa ba-zómi na bábalé.
Chapter 7
John LinVB 7:1  Nsima ya yangó Yézu atámbólí o Galiléa ; alingí kotá­mbola lisúsu o Yudéa té, zambí ba-Yúda bazalákí koluka koboma yě.
John LinVB 7:2  Eyenga ya ba-Yúda, eye bako­bé­ngaka eyenga ya Miláko ekómí pene­pene.
John LinVB 7:3  Bandeko ba yě balobí na yě : « Longwá áwa, kendé o Yudéa, mpô bayékoli ba yǒ mpe bámóno misálá okosálaka.
John LinVB 7:4  Sókó moto alingí ’te báyéba yě, akobómbama té. Awa yǒ ozalí kosála misálá minéne, sálá míangó o míso ma bato. »
John LinVB 7:6  Yézu alobí na bangó : « Elaká ya ngáí ya kokende ekokí naíno té ; kasi elaká ya bínó ekobongelaka bínó ntángo ínso.
John LinVB 7:7  Bato ba nsé bakokí koyina bínó té, kasi bayiní ngáí zambí nalakísí bangó ’te bakosálaka mabé.
John LinVB 7:8  Bínó bókende o eyenga, kasi ngáí nakokende o eyenga êná té, zambí elaká ya ngáí ekokí naíno té. »
John LinVB 7:10  Ntángo bandeko ba yě basílí kokende o eyenga, yě mpé akeí, kasi na bonkútú, amílakísí té.
John LinVB 7:11  Ba-Yúda bazalákí koluka yě o mikolo mya eyenga, batúní : « Azalí wápi ? »
John LinVB 7:12  Bipái bínso bazalákí kolobaloba mpô ya yě. Basúsu balobí ’te : « Azalí moto malámu », basúsu balobí : « Té, azalí kokósa bato. »
John LinVB 7:13  Nzókandé moto mǒkó té azalákí koloba polélé, zambí bazalákí kobánga ba-Yúda.
John LinVB 7:14  O káti ya mikolo mya eyenga Yézu akeí o Témpelo mpé abandí kotéya.
John LinVB 7:15  Ba-Yúda bakámwí mpe­nzá, balobí : « Yě ayékólá té, bôngó ndéngé níni ayébí minkandá ? »
John LinVB 7:16  Yézu azóngísí : « Matéya nakotéyaka mazalí ma ngáí té, kasi ma óyo atíndí ngáí.
John LinVB 7:17  Moto alingí kosála maye Nzámbe alingí, akoyéba sókó matéya ma ngáí maútí na Nzámbe tǒ na ngáí mǒkó.
John LinVB 7:18  Moto akoloba na ntína na yě mǒkó, akoluka sé lokúmu la yě mǒkó ; kasi moto akoluka lokúmu la óyo atíndí yě, azalí na mayéle mabé té mpé akoloba mambí ma sôló.
John LinVB 7:19  Móze apésí bínó Mobéko té ? Kasi mǒkó wa bínó té azalí kotósa mwangó ! Mpô níni bolingí koboma ngáí ? »
John LinVB 7:20  Bato bazóngísí : « Ozalí na zábolo. Náni alingí koboma yǒ ? »
John LinVB 7:21  Yézu azóngísélí bangó : « Nasálákí sé likamwísi lyǒ­kó, mpé bínó bánso bokámwí !
John LinVB 7:22  Móze apésí bínó mobéko mwa bokátisi nzóto (mobéko moye moútí na Móze té, kasi na bankóko), mpé bokokátisaka moto nzóto o mokolo mwa sábato.
John LinVB 7:23  Bôngó, sókó bokokí kokátisa moto nzóto o mokolo mwa sábato mpô ’te bóbúka mobéko mwa Móze té, ndéngé níni bozalí koyóka mabé áwa nabíkísí moto mobimba o mokolo mwa sábato ?
John LinVB 7:24  Bótíka kokáta makambo sé lokóla bozalí komóno na míso ; bókáta mangó na bosémbo. »
John LinVB 7:25  Bato basúsu ba Yerúzalem balobí : « Moto balingí koboma, yě óyo té ?
John LinVB 7:26  Mpé tálá, azalí kotéya o míso ma bato bánso mpé bazalí koloba na yě elóko té ! Bôngó bakonzi bandimí sôló ’te azalí Mesíya ?
John LinVB 7:27  Mokolo Krístu akoyâ, moto mǒ­kó té akoyéba esíká akoúta, nzókandé toyébí malámu esíká moto óyo aútí. »
John LinVB 7:28  Ntángo Yézu azalákí kotéya o Témpelo, alobí na mongóngó makási : « Boyébí ngáí mpé boyébí esíká naútí ; nzókandé ngáí nayéí na ngúyá ya ngáí mǒkó té. Kasi óyo azalí na bosôló, yě moto atíndí ngáí ; bínó boyébí yě té.
John LinVB 7:29  Ngáí nayébí yě, zambí naútí epái ya yě, mpé yě moto atíndí ngáí. »
John LinVB 7:30  Balingí kokanga yě, kasi moto mǒkó aka­ngí yě té, zambí elaká ya yě ekokákí naíno té.
John LinVB 7:31  O ntéi ya bangó bato baíké bayambí yě, balobí : « Mokolo Krístu akoyâ, akokí ndé koleka moto óyo na bosáli makamwísi ? »
John LinVB 7:32  Ba-Farizéo bayókí makambo bato bazalákí koloba mpô ya Yézu, batíndí bakéngeli bákanga yě.
John LinVB 7:33  Yézu alobí : « Nakozala na bínó lisúsu mikolo míngi té, nakozónga epái ya óyo atíndí ngáí.
John LinVB 7:34  Bokoluka ngáí, kasi bokomóno ngáí té : esíká ngáí nakokende, bínó bokokí kokóma té. »
John LinVB 7:35  Ba-Yúda balobání : « Tómóno yě lisúsu té, bôngó alingí kokende wápi ? Akokende ndé epái ya ba-Yúda bapalángání o káti ya ba-Gréki ? Mbele akokende kotéya ba-Gréki ?
John LinVB 7:36  Na maloba mâná alingí koloba níni : ‘Bokoluka ngáí, kasi bokomóno ngáí té ; esíká ngáí nakokende, bínó bokokí kokóma té’ ? »
John LinVB 7:37  Mokolo mwa nsúka mwa eyenga, mokolo monéne, Yézu atélémí mpé agángí : « Sókó moto ayókí mpósá ya mái, áyâ epái ya ngáí, mpé moto ayambí ngáí ámele.
John LinVB 7:38  Ekomámí bôngó o Minkandá Misántu : Moto ayambí ngáí, mái ma bomoi makobima yě lokóla ebale. »
John LinVB 7:39  Alobí mpô ya Elímo óyo akokitela bato bakoyamba yě. Téé sikáwa Elímo ayéí naíno té, zambí Yézu akómí naíno na nkémbo ya yě té.
John LinVB 7:40  O ntéi ya baye bayókákí maloba mâná bato baíké balobí : « Azalí proféta sôló ! »
John LinVB 7:41  Basúsu balobí : « Azalí Krístu ! » Kasi basúsu balobí : « Krístu akoúta ndé o Galiléa ?
John LinVB 7:42  O Bikomá Bisántu ekomámí té ’te Krístu akozala mwána wa Davídi, akoúta o Beteléme, mbóka Davídi azalákí. »
John LinVB 7:44  Basúsu balingí kokanga yě, kasi moto mǒkó akangí yě té.
John LinVB 7:45  Bakéngeli bazóngí epái ya banganga bakonzi mpe na ba-Farizéo. Bangó batúní : « Mpô níni boyéí na yě té ? »
John LinVB 7:46  Bakéngeli bazóngísí : « Mokolo mǒ­kó té moto alobákí lokóla moto óyo ! »
John LinVB 7:47  Ba-Farizéo batúní bangó : « Bôngó bínó mpé bomítíkí mpô ákósa bínó ?
John LinVB 7:48  Mǒ kó wa ba­nkúmú tǒ wa ba-Farizéo ayambí ndé yě ?
John LinVB 7:49  Kasi bato baké, baye bayébí Mobéko té, batómbélí bangó bobé ! »
John LinVB 7:50  Kasi mǒkó wa bangó, Nikodémo, óyo ayákí epái ya Yézu na butú, alobí na bangó :
John LinVB 7:51  « Mobéko mwa bísó mokokitisa moto mǒkó té sókó libosó batúní yě té, mpô báyéba maye asálákí. »
John LinVB 7:52  Bazóngísélí yě : « Bôngó yó mpé ozalí moto wa Galiléa ? Tángá Minkandá malámu ! Okomóno ’te proféta akoúta o Galiléa té. »
John LinVB 7:53  Na nsima bazóngí, moto na moto o ndáko ya yě.
Chapter 8
John LinVB 8:2  Kasi na ntá ntóngó azóngí o Té­mpelo ; bato ebelé bazíngí yě. Afándí mpé abandí kotéya bangó.
John LinVB 8:3  Batéyi ba Mobéko na ba-Farizéo bayéí na mwásí mǒkó bakangákí na mobáli mosúsu. Batélémísí yě o káti ya bangó.
John LinVB 8:4  Balobí na Yézu : « Motéyi, bakangí mwásí óyo na mobáli mosúsu.
John LinVB 8:5  O búku ya Mobéko Móze atí­ndí bísó tóboma na mabángá básí ba ndenge óyo. Yǒ olobí níni ? »
John LinVB 8:6  Balobí bôngó mpô ya ko­tíela yě motámbo, bázwa ntína ya kofúnda yě. Kasi Yézu asunámí, abandí kokoma na mosapi o mabelé.
John LinVB 8:7  Awa baléndísí kotúna yě, atálí bangó mpé alobí : « Oyo o ntéi ya bínó azalí na lisúmu té, ábwá­kela yě libángá lya libosó ! »
John LinVB 8:8  Asunámí lisúsu mpé akomí lisúsu o mabelé.
John LinVB 8:9  Eyókí bangó bôngó, balongwí mǒkó mǒkó, bakóló libosó. Yézu atíkálí yě mǒkó ná mwásí atélémí sé wâná.
John LinVB 8:10  Sikáwa Yézu atálí yě mpé alobí : « Mwasi, wápi bangó ? Moto mǒkó akitísí yǒ té ? »
John LinVB 8:11  Azóngísí : « Moto mǒkó té, mokonzi. » Bôngó Yézu alobí na yě : « Ngáí mpé nakokitisa yǒ té. Kendé, banda sik’óyo ósála masúmu lisúsu té. »
John LinVB 8:12  Yézu alobí na bangó lisúsu : « Ngáí nazalí mwínda mwa nsé. Moto akolanda ngáí, akotámbola o molílí té, kasi akozala na mwínda mokopésa bomoi. »
John LinVB 8:13  Ba-Farizéo balobí na yě : « Ozalí koloba mpô ya yǒ mǒkó, maloba ma yǒ mazalí mpámba. »
John LinVB 8:14  Yézu ayanólí bangó : « Atâ nazalí koloba mpô ya ngáí mǒkó, maloba ma ngáí mazalí sé maloba ma bosôló, zambí nayébí epái naútí mpé epái nakokende. Kasi bínó boyébí té epái naútí mpé epái nakokende.
John LinVB 8:15  Bínó bokokátaka makambo sé na mayéle ma bato ; ngáí nakosá­mbisa moto mǒkó té.
John LinVB 8:16  Sókó nakokáta likambo lya moto, nakokáta lyangó na bosémbo, zambí nazalí sé ngáí mǒ­kó té ; tozalí bísó bábalé : ná ngáí, ná óyo atíndí ngáí.
John LinVB 8:17  O mobéko mwa bínó ekomámí ’te sókó bato bábalé bazalí koloba sé ndéngé yǒ kó, maloba ma bangó makondimama.
John LinVB 8:18  Ngáí mǒkó nakosakola mpô ya ngáí ; kasi Tatá óyo atíndí ngáí, yě mpé akosakola mpô ya ngáí. »
John LinVB 8:19  Batúní yě : « Tatá wa yǒ azalí wápi ? » Yézu azóngísí : « Boyébí ngáí té, boyébí mpé Tatá wa ngáí té. Sókó boyébákí ngáí, mbele boyébákí mpé Tatá wa ngáí. »
John LinVB 8:20  Yézu alobákí maloba mâná ntángo aza­lákí kotéya o Té­mpelo o esíká ba­kobómbaka makabo. Moto mǒkó aka­ngí yě té, zambí elaká ya yě ekokákí naíno té.
John LinVB 8:21  Yézu alobí na bangó lisúsu : « Nakokende mpé bokoluka ngáí, kasi bokokúfa na masúmu ma bínó. Esíká nakokende, bínó bokokí kokóma té. »
John LinVB 8:22  Ba-Yúda balobání : « Alingí ndé komíboma, mpô azalí koloba ’te ‘Esíká nakokende, bínó bokokí kokóma té’ ? »
John LinVB 8:23  Yézu azóngísélí bangó : « Bínó boútí bobélé o nsé ; ngáí naútí o likoló. Bínó bozalí bato ba nsé eye ; ngáí nazalí moto wa nsé eye té.
John LinVB 8:24  Yangó wâná nalobákí na bínó ’te bokokúfa na masúmu ma bínó. Sókó boyambí té ’te Ngáí Nazalí, bokokúfa na masúmu ma bínó. »
John LinVB 8:25  Bôngó balobí na yě : « Yǒ náni ? » Yézu alobí na bangó : « Nazalí sé óyo nalobákí na bínó út’o ebandela.
John LinVB 8:26  Nazalí na makambo míngi ma koloba matálí bínó, maye makosámbisa bínó. Oyo atíndí ngáí akolobaka mambí ma sôló, mpé ngáí nakoloba na bato bobélé mambí nayókí epái ya yě. »
John LinVB 8:27  Bangó bayébí té ’te azalí koloba na bangó mpô ya Tatá.
John LinVB 8:28  Bôngó Yézu alobí na bangó : « Mokolo boko­tó­mbola Mwána wa Moto, bokoyéba ’te Ngáí Nazalí. Bokoyéba mpé ’te nakosála elóko yǒ kó té na ngúyá ya ngáí mǒkó, kasi nakoloba bobélé maloba Tatá alakísí ngáí.
John LinVB 8:29  Oyo atíndí ngáí azalí na ngáí, atíkí ngáí mǒkó té, zambí nakosálaka ntángo ínso maye makosepelisa yě. »
John LinVB 8:30  Awa alobí bôngó, bato míngi ba­ndimí yě.
John LinVB 8:31  Yézu alobí na ba-Yúda baye bayambí yě : « Sókó botósí maloba ma ngáí, bozalí sôló bayékoli ba ngáí,
John LinVB 8:32  bôngó bokoyéba bosôló, mpé bo­sôló bokopésa bínó bonsómí. »
John LinVB 8:33  Bazóngísélí yě : « Tozalí bato ba libótá lya Abaráma, mokolo mǒkó té tozalákí baómbo ba moto. Bóníbóní okokí koloba : bokozala ba­nsómí ? »
John LinVB 8:34  Yézu azóngísélí bangó : « Ya sôló sôló, nayébísí bínó : Moto nyó­nso akosála lisúmu, azalí moómbo wa lisúmu.
John LinVB 8:35  Moómbo akotíkala sékô moto wa libótá té, kasi mwána azalí moto wa libótá sékô.
John LinVB 8:36  Bôngó sókó Mwána asikólí bínó, bokozala na bonsómí sôló.
John LinVB 8:37  Nayébí ’te bozalí bato ba libótá lya Abaráma ; kasi bolingí koboma ngáí, zambí bondimí maloba ma ngáí té.
John LinVB 8:38  Ngáí nakolobaka maye namónókí epái ya Tatá wa ngáí, kasi bínó bokosálaka maye bomónókí epái ya tatá mobóti wa bínó. »
John LinVB 8:39  Bazóngísélí yě : « Abaráma azalí tatá wa bísó. » Yézu alobí na bangó : « Sókó bozalí bána ba Abaráma, bósála lokóla yě asálákí.
John LinVB 8:40  Kasi áwa nalobí na bínó mambí ma bosôló, maye nayókákí epái ya Nzámbe, bolingí koboma ngáí ! Abaráma asálákí bôngó té !
John LinVB 8:41  Bínó bokosálaka misálá miye tatá wa bínó asáláká. » Balobí na yě : « Bísó tozalí bána ba bokáli té, tozalí sé na tatá mǒkó, Nzámbe. »
John LinVB 8:42  Yézu alobí na bangó : « Sókó Nzámbe azalákí tatá wa bínó sôló, mbele bolingákí ngáí, zambí naútí na Nzámbe, mpé nayéí áwa o nkómbó ya yě. Nayákí o nkómbó ya ngáí mǒ­kó té, kasi yě moto atíndí ngáí.
John LinVB 8:43  Mpô níni botongólí ntína ya maloba ma ngáí té ? Mpô bokokí kondima matéya ma ngáí té.
John LinVB 8:44  Bozalí bána ba tatá wa bínó zábolo, mpé bolingí kosála maye tatá wa bínó akolingaka. Ut’o ebandela yě azalí mobomi, akondimaka bosôló té ; mambí ma bosôló mazalí na yě té. Awa akobúkaka lokutá, akolobaka maye maútí o motéma mwa yě, zambí azalí mokósi mpé akobimisaka sé mambí ma lokutá.
John LinVB 8:45  Kasi ngáí nakolobaka mambí ma bosôló, yangó wâná boyambí ngáí té.
John LinVB 8:46  Nání o ntéi ya bínó akokí kotángela ngáí lisúmu nasálí ? Sókó nalobí mambí ma bosôló, mpô níni boya­mbí ngáí té.
John LinVB 8:47  Moto wa Nzámbe akoyókaka maloba ma Nzámbe. Kasi bínó bokoyókaka té, zambí bozalí bato ba Nzámbe té. »
John LinVB 8:48  Ba-Yúda bazóngísélí yě : « Tolobí ya sôló té ’te ozalí mo-Samaría mpé ozalí na zábolo ? »
John LinVB 8:49  Yézu azóngísí : « Ngáí nazalí na zábolo té, nakokúmisaka tatá wa ngáí, kasi bínó bolukí kosámbwisa ngáí.
John LinVB 8:50  Nakolukaka lokúmu la ngáí té. Mosúsu akolukaka langó, yě ndé akokáta makambo.
John LinVB 8:51  Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Moto akotósaka maloba ma ngáí, akokúfa sókí té. »
John LinVB 8:52  Ba-Yúda balobí : « Sikáwa toyébí sôló ’te ozalí na zábolo. Abaráma akúfá, baproféta mpé bakúfá, mpé yǒ olobí : ‘Moto akotósaka maloba ma ngáí, akokúfa sókí té’.
John LinVB 8:53  Olekí ndé tatá wa bísó Abaráma óyo akúfá ? Baproféta bakúfá lokóla. Okanísí ’te yǒ ndé náni ? »
John LinVB 8:54  Yézu azóngísí : « Sókó namíkúmísí, lokúmu la ngáí lozalí mpámba ; kasi moto akokúmisaka ngáí, yě ndé Tatá wa ngáí, óyo bínó bokolobaka ’te ‘Azalí Nzámbe wa bísó’ ;
John LinVB 8:55  bínó boyébí yě té, kasi ngáí nayébí yě. Sókó nalobákí ’te nayébí yě té, mbele nazalákí moto wa lokutá lokóla bínó. Kasi nayébí yě mpé nakotósaka maloba ma yě.
John LinVB 8:56  Tatá wa bínó Abaráma asepélákí míngi áwa akanísákí ’te akomóno boyéi bwa ngáí : amónókí bwa­ngo mpé asepélákí míngi. »
John LinVB 8:57  Bôngó ba-Yúda balobí na yě : « Naíno okokísí mibú ntúkú ítáno té, mpé olobí ’te omóní Abaráma ! »
John LinVB 8:58  Yézu alobí : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : libosó ’te Abaráma ábótama, Ngáí Nazalí. »
John LinVB 8:59  Ba-Yúda balokótí mabángá mpô ’te bábwákela yě ; kasi Yézu amíbó­mbí mpé abimí o Témpelo.
Chapter 9
John LinVB 9:1  Ntángo azali koléka, Yézu amóní moto mǒkó abótámá na lolandá.
John LinVB 9:2  Bayékoli batúní yě : « Motéyi, nání asálákí lisúmu, yě tǒ babóti ba yěmpô moto óyo abótáma na lolandá ? »
John LinVB 9:3  Yézu ayanólí : « Yě asálí lisúmu té, babóti ba yě mpé té, kasi abótámí bôngó mpô ’te misálá mya Nzámbe mímónono o nzóto ya yě.
John LinVB 9:4  Awa mói mozalí naíno, nasengélí kosála mambí ma óyo atíndí ngáí. Ekómí butú, moto mǒkó akokoka kosála mosálá té.
John LinVB 9:5  Ntángo nazalí áwa o nsé, nazalí mwínda mwa bato. »
John LinVB 9:6  Elobí yě bôngó, abwákí nsóí o mabelé, asálí na yangó potopóto mpé apakólí yangó o míso ma moto ôná.
John LinVB 9:7  Alobí na yě : « Kendé komísukola o líziba lya Silowé (lokóla ’te ‘Motí­ndami’). » Moto wa lola­ndá akeí mpé amísukólí. Ntángo azóngí, akómí komóno malámu.
John LinVB 9:8  Baye bayébí yě mpé baye bamónókí yě libosó ntángo azalákí kosénge bato makabo, balobí : « Moto azalákí kofánda áwa mpô ya kosé­nge bato makabo, yě té ? »
John LinVB 9:9  Basúsu balobí : « Ezalí yě. » Basúsu balobí : « Ezalí yě té, kasi aúlání na yě. » Yě mǒ­kó alobí : « Ezalí ngáí. »
John LinVB 9:10  Bôngó batúní yě : « Bóníbóní míso ma yǒ mafu­ngwámí ? »
John LinVB 9:11  Ayanólí : « Oyo ba­kobénga­ka Yézu asálí potopóto, apakólí yangó o míso ma ngáí mpé alobí : ‘Kendé komísukola o Silowe’. Bôngó nakendékí, namísukólí mpé nakómí komóno. »
John LinVB 9:12  Batúní yě : « Azalí wápi ? » Azó­ngísí : « Nayébí té. »
John LinVB 9:13  Bamemí moto azalákí na lola­ndá epái ya ba-Farizéo.
John LinVB 9:14  Kasi mokolo Yézu asálákí potopóto mpé afu­ngólákí yě míso, ezalákí mokolo mwa sábato.
John LinVB 9:15  Ba-Farizéo mpé batúní yě bóníbóní akómí komóno sikáwa. Alobí na bangó : « Atíí ngáí potopóto o míso, namísukólí mpé nakómí komóno. »
John LinVB 9:16  Ba-Farizéo basúsu balobí : « Moto óyo aútí na Nzámbe té, zambí atósí mobéko mwa sábato té. » Basúsu balobí : « Bóníbóní moto wa masúmu akokí kosála bilembo biye ? » Bayókání té.
John LinVB 9:17  Batúní lisúsu moto wa lolandá, balobí : « Yǒ olobí níni mpô ya moto a­fungólí yǒ míso ? » Ayanólí : « Azalí proféta. »
John LinVB 9:18  Ba-Yúda bandimí té ’te abótámákí na lolandá mpe akomi komono lisusu libosó ’te bábênga babóti ba moto óyo akómí komóno sikáwa.
John LinVB 9:19  Batúní bangó : « Oyo ndé mwá­na wa bínó, bokolobaka ’te abótámá na lolandá ? Bóníbóní akómí komóno sikáwa ? »
John LinVB 9:20  Babóti bazóngísí : « Toyébí ’te óyo azalí mwána wa bísó óyo abótámá na lolandá.
John LinVB 9:21  Kasi toyébí té bóníbóní akómí komóno sikáwa, toyébí mpé té sókó náni afungólí yě míso. Bótúna yě mǒkó, azalí mokóló, yě mǒkó álimbola. »
John LinVB 9:22  Babóti balobí bôngó mpô babángí ba-Yúda, zambí ba-Yúda bayókání ’te, sókó moto andi­mí ’te Yézu azalí Krístu, bakobengana yě o sinagóga.
John LinVB 9:23  Yangó wâná babóti balobí : « Azalí mokóló, bótúna yě mǒkó. »
John LinVB 9:24  Ba-Yúda babéngí lisúsu moto azalákí na lolandá, balobí na yě : « Kémbísá Nzámbe. Bísó toyébí ’te moto ôná azalí mosúmuki. »
John LinVB 9:25  Ayanólí : « Nayébí té sókó azalí mosúmuki, ngáí nayébí sé mpô yǒ­kó : nazalákí na lolandá, sikáwa nazalí komóno. »
John LinVB 9:26  Sikáwa batúní yě : « Asálí yǒ níni ? Bóníbóní afungólí yǒ míso ? »
John LinVB 9:27  Ayanólí bangó : « Nasílí nayébísí bínó, kasi bo­ndimí té. Mpô níni bolingí koyóka yangó lisúsu ? Bínó mpé bolingí ndé kokóma bayékoli ba yě ? »
John LinVB 9:28  Bafíngí yě, balobí : « Yó moto ozalí moyékoli wa yě, bísó tozalí bayékoli ba Móze.
John LinVB 9:29  Toyébí ’te Nzámbe alobákí na Móze. Bísó toyébí té epái wápi yě aútí. »
John LinVB 9:30  Moto ôná ayanólí bangó : « Tálá likambo lya kokámwa sôló : afungólí ngáí míso, mpé boyébí esíká aútí té !
John LinVB 9:31  Toyébí ’te Nzámbe akondimelaka basúmuki té, kasi sókó moto akomemyaka Yě mpé akosálaka maye Yě alingí, akondimela yě.
John LinVB 9:32  Mokolo mǒ­kó té toyókí ’te moto mǒkó afungólí míso ma moto abótámá na lolandá.
John LinVB 9:33  Sókó moto ôná aútí na Nzámbe té, mbele akokákí kosála elóko té. »
John LinVB 9:34  Bayanólí yě : « Ut’o mbótama ya yó otóndí na masúmu, mpé olingí kotéya bísó ? » Na nsima babwákí yě o libándá.
John LinVB 9:35  Yézu ayókí ’te babwákí yě o libándá. Ntángo akútání na yě, atúní yě : « Oyambí Mwána wa Moto ? »
John LinVB 9:36  Azóngísí : « Mokonzi, yébísá ngáí sókó yě náni, bôngó náyamba yě. »
John LinVB 9:37  Yézu alobí : « Ozalí komóno yě, ezalí óyo azalí koloba na yǒ ! »
John LinVB 9:38  Yě azóngísí : « Mokonzi, nayambí », mpé agúmbámélí yě.
John LinVB 9:39  Yézu alobí lisúsu : « Nayéí áwa o nsé kosámbisa bato mpô ’te bato ba lolandá bámóno, mpé baye bazalí komóno bámóno lisúsu té. »
John LinVB 9:40  Ba-Farizéo baye batélémí pene na yě bayókí maloba mâná, batúní yě : « Bôngó bísó mpé tozalí na lolandá ? »
John LinVB 9:41  Yézu azóngísí : « Sókó bokúfákí míso, mbele bozalákí na lisúmu té ; kasi áwa bolobí ’te bozalí komóno, bokotíkala na masúmu ma bínó. »
Chapter 10
John LinVB 10:1  « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : moto akótí o lopángo la mpatá epái ya ezibeli ya lopángo té, kasi ayíngélí epái esúsu, azalí moyíbi mpé mobébisi.
John LinVB 10:2  Kasi sókó akótí epái ya ezibeli ya lopángo, azalí mokéngeli wa mpatá.
John LinVB 10:3  Sínzílí akofungolela yě ezibeli, mpé mpatá iko­yóka mongó­ngó mwa yě. Akobénga mpatá ya yě yǒ kó yǒ kó na nkómbó ya yangó, mpé akokamba yangó o libándá.
John LinVB 10:4  Ntángo abimísí bibwélé bya yě bí­nso, akokende libosó mpé mpatá ikolanda yě, zambí iyébí mongóngó mwa yě.
John LinVB 10:5  Mpatá ikolanda mompaya té, kútu ikokíma yě, zambí iyébí mongóngó mwa yě té. »
John LinVB 10:6  Yézu alobí na bangó moúlání moye, kasi bayókí ntína té ya maye alingí koloba na bangó.
John LinVB 10:7  Yangó wâná Yézu alobí lisúsu : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : ngáí nazalí ezibeli ya lopángo la mpatá.
John LinVB 10:8  Baye bánso bayákí libosó lya ngáí bazalí bayíbi na babébisi, kasi mpatá iyókákí bangó té.
John LinVB 10:9  Ngáí nazalí ezibeli ya lopángo. Moto akokóto epái ya ngáí, akobíka : akoyíngela mpé akobima, akozwa esíká ya matíti ya kolia.
John LinVB 10:10  Moyíbi ako­yâ bobélé koyíba, koboma mpé kobébisa. Ngáí nayéí mpô ’te mpatá ízwa bomoi, ízwa bwangó míngi.
John LinVB 10:11  Ngáí nazalí mokéngeli malámu. Mokéngeli malámu wa mpatá akokaba bomoi bwa yě mpô ya kobíkisa mpatá ya yě.
John LinVB 10:12  Moto akosálaka mpô ya mosolo, óyo azalí mokéngeli wa sôló té, nkóló wa mpatá mpé té, akotíka mpatá mpé akokíma sókó amóní nkoi ezalí koyâ ; nkoi ekokanga mpé ekopanza etó­nga.
John LinVB 10:13  Mpámba té, yě akosálaka sé mpô ya mosolo, akopa­nganaka na mpatá té.
John LinVB 10:14  Ngáí nazalí mokéngeli malámu ; nayébí mpatá ya ngáí, mpé mpatá iyébí ngáí,
John LinVB 10:15  sé lokóla Tatá ayébí ngáí mpé ngáí nayébí Tatá. Nakokaba bomoi bwa ngáí mpô ya mpatá ya ngáí.
John LinVB 10:16  Nazalí naíno na mpatá isúsu izalí o lopango loye té. Nasengélí kokamba yangó lokóla ; ikoyóka monoko mwa ngáí. Bôngó ekokóma etó­nga yǒ kó na mokéngeli sé mǒkó.
John LinVB 10:17  Tatá alingí ngáí, zambí nakokaba bomoi bwa ngáí mpô ’te názwa bwangó lisúsu.
John LinVB 10:18  Moto mǒ­kó té akobótolo ngáí bomoi, ngáí mǒkó nakokaba bwangó. Nazalí na likokí lya kokaba bomoi bwa ngáí mpé lya kozwa bwangó lisúsu : Tatá wa ngáí atíndí ngáí násála bôngó. »
John LinVB 10:19  Ba-Yúda bakabwání lisúsu mpô ya maloba mâná.
John LinVB 10:20  Baíké o káti ya bangó balobí : « Akangémí na zábolo ; azalí na ligbómá ; mpô níni bozalí koyóka yě ? »
John LinVB 10:21  Basúsu balobí : « Moto akangémí na zábolo akolobaka bô­ngó té. Zábolo akokí ndé kofungola míso ma moto wa lola­ndá ? »
John LinVB 10:22  O Yerúzalem bazalákí kosepela eyenga ya bobenisi Témpelo : ezalákí o eleko ya mpío.
John LinVB 10:23  Yézu atá­mbólí o mbalasáni ya Salomó o Témpelo.
John LinVB 10:24  Ba-Yúda bazíngí yě mpé batúní yě : « Mikolo bóní naíno okotíka bísó bobélé na ntembe ? Sókó ozalí Krístu, yébísá bísó polélé. »
John LinVB 10:25  Yézu ayanólí bangó : « Nasílí nayébísí bínó, kasi boyambí té. Misálá nakosálaka o nkó­mbó ya Tatá wa ngáí mizalí kolakisa ngáí polélé.
John LinVB 10:26  Kasi boyambí té, mpô bozalí mpatá ya ngáí té.
John LinVB 10:27  Mpatá ya ngáí ikoyókaka monoko mwa ngáí ; nayébí yangó mpé ikolandaka ngáí.
John LinVB 10:28  Nakopésa yangó bomoi bwa sé­kô ; ikokúfa sókí té ; moto mǒkó akobótolo yangó o mabóko ma ngáí té.
John LinVB 10:29  Tatá óyo apésí ngáí yangó, alekí bánso ; moto mǒkó té akokí kobótolo elóko o mabóko ma Tatá.
John LinVB 10:30  Bísó na Tatá tozalí sé moto mǒ­kó. »
John LinVB 10:31  Ba-Yúda balokótí lisúsu mabángá mpô ya koboma yě.
John LinVB 10:32  Kasi Yézu alobí na bangó : « Nalakísí bínó misálá malámu míngi, miye nasálí na ngúyá ya Tatá. Mpô ya mosálá níni bolingí koboma ngáí na mabángá ? »
John LinVB 10:33  Ba-Yúda bazóngísélí yě : « Tokoboma yǒ té mpô ya mosálá malámu osálí, kasi mpô otúkí Nzámbe. Yó ozalí bobélé moto, mpé olobí ’te ozalí Nzámbe. »
John LinVB 10:34  Yézu azóngísélí bangó : « O Mobéko mwa bínó ekomámí té ’te : Nalobákí : bozalí banzámbe ?
John LinVB 10:35  Bakokí kobóya Minkandá Misántu té. Bôngó sókó Mobéko motángí ‘banzámbe’ baye Nzámbe atíndélí bangó maloba,
John LinVB 10:36  bóníbóní bolobí na ngáí ‘otúkí Nzámbe’, áwa nalobákí ’te ‘nazalí Mwána wa Nzámbe’ ? Zambí yě mpenzá asántísí ngáí mpé atíndí ngáí o nsé.
John LinVB 10:37  Sókó nasálí misálá mya Tatá wa ngáí té, bóyamba ngáí té.
John LinVB 10:38  Kasi sókó nasálí myangó, atâ boyambí ngáí té, bóyamba misálá miye, bôngó bóndima ’te Tatá asangání na ngáí, mpé ngáí nasangání na Tatá. »
John LinVB 10:39  Bamekí lisúsu kokanga yě, kasi alongwí o káti ya bangó.
John LinVB 10:40  Akeí lisúsu o ngámbo ya Yordáne, esíká Yoáne abátísákí libosó, atíkálí kúná.
John LinVB 10:41  Bato baíké bayéí epái ya yě, balobí : « Yoáne asálákí likamwísi lyǒ­kó té ; kasi mánso alobákí mpô ya moto óyo, mazalí ma sôló. »
Chapter 11
John LinVB 11:1  Moto mǒkó azalákí na bokono, nkómbó ya yě Lazáro, wa Betánia, mbóka ya María na ndeko wa yě Márta.
John LinVB 11:2  María azalákí mwásí óyo apakólákí Mokonzi malási mpé apangúsákí yě makolo na nsúki ya yě. Ndeko wa yě Lazáro azalákí kobéle.
John LinVB 11:3  Bandeko ba yě básí bábalé batíndélí Yézu maloba : « Mokonzi, óyo okolingaka azalí kobéle. »
John LinVB 11:4  Ntángo Yézu ayókí yangó, alobí : « Akokúfa na bokono bôná té, kasi bokono bôná bokolakisa nkémbo ya Nzámbe, mpé bokopésa lokúmu na Mwána wa Nzámbe. »
John LinVB 11:5  Yézu azalákí kolinga Márta ná ndeko wa yě, ná Lazáro.
John LinVB 11:6  Eyókí yě ’te Lazáro azalákí kobéle, atíkálí naíno mikolo míbalé o esíká azalákí.
John LinVB 11:7  Bobélé na nsima alobí na bayékoli : « Tózónga o Yudéa. »
John LinVB 11:8  Bayékoli balobí : « Motéyi, bobélé sikáwa ba-Yúda balingákí koboma yǒ na mabángá, mpé okozónga kúná ? »
John LinVB 11:9  Yézu azóngísí : « O mokolo mǒkó mói mokoúmelaka ngonga zómi na íbalé té ? Sókó moto atámbólí na mói, akotúta libakú té, mpô azalí komóno mwínda mwa nsé eye.
John LinVB 11:10  Kasi sókó atámbólí na butú, akotúta libakú, zambí azalí lisúsu na mwínda té. »
John LinVB 11:11  Elobí Yézu bôngó, abakísí : « Móníngá wa bísó Lazáro alálí mpongí, kasi nakeí kolamusa yě. »
John LinVB 11:12  Bayékoli balobí : « Sókó alálí mpongí, akobíka. »
John LinVB 11:13  Yézu alingákí koloba ’te Lazáro awéí, kasi bangó bakanísí ’te azalákí kolála mpongí.
John LinVB 11:14  Na nsima Yézu alobí polélé : « Lazáro awéí.
John LinVB 11:15  Sókó nasepélí ’te nazalákí wâná té, ezalí mpô ya bínó, mpô ’te bóyamba. Kasi tókende epái ya yě ! »
John LinVB 11:16  Tomá, nkómbó ya yě mpé Lipása, alobí na bayékoli basúsu : « Bísó mpé tókende mpô tókúfa elongó na yě ! »
John LinVB 11:17  Ntángo Yézu akómí kúná, basílí bakundí Lazáro mikolo mínei.
John LinVB 11:18  Betánia ezalí mosíká na Yerúzalem té, sé kilométele ísáto.
John LinVB 11:19  Ba-Yúda baíké bayákí kobóndo Márta na María mpô ya liwá lya ndeko wa bangó.
John LinVB 11:20  Ntángo Márta ayókí ’te Yézu ayéí, akeí kokútana na yě, kasi María atíkálí o ndáko.
John LinVB 11:21  Márta alobí na Yézu : « Mokonzi ; sókó ozalákí áwa, mbele ndeko wa ngáí akúfákí té.
John LinVB 11:22  Kasi atâ sikáwa nayébí ’te Nzámbe akopésa yǒ mánso okosénge yě. »
John LinVB 11:23  Yézu alobí na yě : « Ndeko wa yǒ akosékwa. »
John LinVB 11:24  Márta azóngísí : « Nayébí ’te akosékwa o mokolo mwa nsúka, mokolo bato bánso bakosékwa. »
John LinVB 11:25  Yézu alobí na yě : « Ngáí nazalí nsékwa mpé bomoi. Moto ayambí ngáí, atâ awéí, ndâzalí na bomoi ;
John LinVB 11:26  mpé moto nyónso óyo azalí na bomoi mpé ayambí ngáí, akokúfa sékô té. Oyambí yangó ? »
John LinVB 11:27  Márta ayanoli : « Iyo, Mokonzi, nayambí ’te yǒ ozalí Krístu, Mwána wa Nzámbe, óyo ayéí o nsé. »
John LinVB 11:28  Elobí yě bôngó, akeí kobênga ndeko wa yě María ; alobí na yě malémbe : « Mokonzi ayéí, azalí kobê­nga yǒ. »
John LinVB 11:29  Eyókí María bôngó, atélémí nokí mpé akeí kokútana na yě.
John LinVB 11:30  Yézu akómí naíno o mbóka té, azalákí bobélé esíká Márta ayéí kokútana na yě.
John LinVB 11:31  Ntángo ba-Yúda baye bazalákí na María o ndáko mpô ya kobóndo yě bamóní ’te atélémí nokí mpé abimí, balandí yě ; bakanísí ’te akeí kolela o lilíta.
John LinVB 11:32  María akómí o esíká Yézu azalákí, amóní yě, akúmbámélí yě, alobí na yě : « Mokonzi, sókó ozalákí áwa, mbele ndeko wa ngáí akúfákí té. »
John LinVB 11:33  Emóní Yézu ’te azalákí kolela, yě na ba-Yúda bayákí elongó na yě, motéma mwa yě moléngí mpé atatábání,
John LinVB 11:34  atúní : « Batíí yě wápi ? » Balobí : « Mokonzi, yáká ótála. »
John LinVB 11:36  Ba-Yúda balobí : « Tálá bóníbóní alingákí yě ! »
John LinVB 11:37  Kasi basúsu balobí : « Oyo afungólí moto wa lolandá míso, akokákí kosála té ’te moto óyo ákúfa té ? »
John LinVB 11:38  Motéma mwa Yézu moléngí lisúsu mpé akeí o lilíta, liye likátémí o káti ya mabángá, libángá lizipí lyangó.
John LinVB 11:39  Yézu alobí : « Bólongola libángá ! » Márta, ndeko wa mowéi, alobí na yě : « Mokonzi, asílí alumbí, awéí mikolo mísáto milekí. »
John LinVB 11:40  Yézu azóngísí : « Nalobákí na yǒ té ’te sókó ozalí na boyambi, okomóno nkémbo ya Nzámbe ? »
John LinVB 11:41  Bôngó balongólí libá­ngá. Yézu atómbólí míso o likoló, alobí : « Tatá, natóndí yǒ zambí ondimélí ngáí.
John LinVB 11:42  Nayébí ’te okondimaka ngáí ntángo ínso ; kasi nalobí bôngó mpô ya bato bazíngí ngáí : báyamba ’te yǒ moto otíndí ngáí. »
John LinVB 11:43  Elobí yě bôngó, agángí makási : « Lazáro, bimá ! »
John LinVB 11:44  Mowéi abimí ; makolo ná mabóko mazíngámí na bilambá, elongi ya yě mpé ezí­ngámí na elambá. Yézu alobí na bangó : « Bókangola yě, bótíka yě ákende. »
John LinVB 11:45  Káti ya ba-Yúda bayákí epái ya María, míngi bayambí Yézu áwa bamóní likambo liye asálí.
John LinVB 11:46  Nzókandé basúsu bakeí koyébisa ba-Farizéo maye Yézu asálí.
John LinVB 11:47  Banganga bakonzi na ba-Farizéo basa­ngání likita, balobí : « Tósála bóní ? Moto óyo akosálaka makamwísi míngi.
John LinVB 11:48  Sókó totíkí yě bôngó, bánso bakoyamba yě, mpé ba-Róma bakoyâ, bakoboma Témpelo mpé ekólo ya bísó. »
John LinVB 11:49  Mǒ kó wa bangó, Kaífa, moto azalákí nganga mokonzi o mobú môná, alobí na bangó : « Bínó boyébí elóko té !
John LinVB 11:50  Bomóní té ’te ebongélí bínó ’te moto mǒkó ákúfa mpô ya bato bá­nso, bôngó ekólo mobimba ékúfa té ! »
John LinVB 11:51  Alobí bôngó na mayéle ma yě mǒkó té ; kasi áwa azalákí nganga mokonzi, asakólí lokóla proféta ’te Yézu akokúfa mpô ya ekólo mobimba.
John LinVB 11:52  Akokúfa bobélé mpô ya ekólo kaka té, kasi mpô ’te ásangisa o libótá lyǒ­kó bána ba Nzámbe bapalángá­ní.
John LinVB 11:54  Yangó wâná Yézu abi­mí lisúsu o káti ya ba-Yúda té, kasi akeí o ekólo penepene na elíkí, o mbóka yǒ kó nkómbó ’te Efraim ; atíkálí kúná elongó na bayékoli ba yě.
John LinVB 11:55  Pásiká ya ba-Yúda ekómí penepene. Bato baíké balongwí o mbóka ya bangó, bakeí o Yerúzalem komí­pétola libosó lya eyenga.
John LinVB 11:56  Balukí Yézu, mpé o Témpelo bazalákí kotúnana : « Bokanísí níni ? Akoyâ o eyenga tǒ akoyâ té ? »
John LinVB 11:57  Banganga bakonzi na ba-Farizéo batíndí etíndá : Sókó moto ayébí esíká Yézu azalí, áyébisa bangó, bôngó bákanga yě.
Chapter 12
John LinVB 12:1  Mikolo motóbá libosó lya eyenga ya Pásiká, Yézu ayéí o Betánia, mbóka ya Lazáro, óyo Yézu asékwísí o bawá.
John LinVB 12:2  Kúná balámbélí yě limpáti ; Márta asálélí bangó. Lazáro mpé afándí o méza elongó na Yézu.
John LinVB 12:3  María akamátí ndámbo ya lítele ya malási ma nsolo mpímbó ma motúya monéne, apakólí na mangó makolo ma Yézu, apangúsí mangó na nsúki ya yě. Ndáko etóndí na nsolo ya malási.
John LinVB 12:4  Mǒ kó wa bayékoli, Yudási Iskarióte, moto akokaba Yézu, alobí :
John LinVB 12:5  « Mpô níni batékí malási mâná na denário nkámá ísáto té mpô ’te bákabela babóla ? »
John LinVB 12:6  Alobí bôngó té mpô azalákí kopangana na babóla, kasi mpô azalákí moyíbi ; azalákí kobó­mba líbenga lya mosolo, mpé koyíba mbóngo bato bakopésaka bangó.
John LinVB 12:7  Yézu alobí : « Tíka mwásí óyo ; asálí bôngó mpô ya mokolo bakokunda ngáí.
John LinVB 12:8  Babóla bakozala na bínó mikolo mínso, kasi ngáí nakozala na bínó sékô té. »
John LinVB 12:9  Ba-Yúda baíké mpenzá bayókí ’te Yézu azalákí o Betánia. Bakeí kúná bobélé mpô ya Yézu té, kasi mpé mpô ya komóno Lazáro, óyo Yézu asékwísí o bawá.
John LinVB 12:10  O ntángo êná banganga bakonzi bakání koboma Lazáro lokóla,
John LinVB 12:11  mpô ba-Yúda baíké batíkí bangó, mpé bayambí Yézu mpô ya Lazáro.
John LinVB 12:12  Mokolo mwa nsima, bato ebelé baye bayákí mpô ya eyenga bayókí ’te Yézu azalákí koyâ o Yerúzalem.
John LinVB 12:13  Bakamátí mandalála, bakeí kokútana na yě mpé bagángí : « Ozána ! Bábenisa mokonzi wa Israél, óyo akoyâ o nkómbó ya Mokonzi ! »
John LinVB 12:14  Yézu azwí mwána wa mpúnda, abutélí yangó, lokóla ekomámí : «
John LinVB 12:15  Obá­nga té, engumbá Sion, tálá mokonzi wa yǒ akoyâ, akofánda o mwána wa mpúnda mwásí. »
John LinVB 12:16  Mokolo môná bayékoli bayókákí naíno ntína ya yangó té, kasi ntángo Yézu ayíngélí o nkémbo, bakundólí o mitéma ’te bakomá yangó o Minkandá mpô ya yě, mpé esálémí na yě sé bôngó.
John LinVB 12:17  Bato bánso bazalákí na Yézu ntángo abéngákí Lazáro o libándá lya lilíta mpé asékwísí yě o bawá, basakólí mpô yangó.
John LinVB 12:18  Yangó wâná mpé bato ebelé bayéí kokútana na yě, mpô bayókákí ’te asálí likamwísi lyangó.
John LinVB 12:19  Ba-Farizéo balobání : « Bomóní ’te tokokí kosála elóko té ! Bato bánso bakómí kolanda yě ! »
John LinVB 12:20  O káti ya bato bayákí kokúmisa Nzámbe o eyenga, basúsu bazalákí ba-Yúda té.
John LinVB 12:21  Bakeí epái ya Filípo, moto wa Betsáida o Galiléa, balobí na yě : « Tatá, tolingí komóno Yézu. »
John LinVB 12:22  Filípo akeí koloba yangó na Andréa. Andréa na Filípo bakeí koyébisa Yézu.
John LinVB 12:23  Yézu azóngísélí bangó : « Elaká ekokí ’te Mwána wa Moto azwa nkémbo.
John LinVB 12:24  Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Sókó mbóto ekwéí o mabelé té, mpé ewéí té, ekotíkala yangó mǒkó ; kasi sókó ewéí, ekobóta mbuma míngi.
John LinVB 12:25  Moto alingí bomoi bwa yě, akobúngisa bwangó ; moto abóyí bomoi bwa yě áwa o nsé, akozala na bwangó sékô.
John LinVB 12:26  Sókó moto alingí kosálela ngáí, álanda ngáí. Bô­ngó o esíká ngáí nazalí, mosáleli wa ngáí akozala mpé wâná. Tatá wa ngáí akokúmisa moto óyo akosálela ngáí.
John LinVB 12:27  Sikáwa nazalí koyóka motéma nsómo. Náloba níni ? Tatá, bíkísá ngáí na élaká óyo ? Kasi nayéí áwa mpô na élaká óyo.
John LinVB 12:28  Tatá, kúmísá nkómbó ya yǒ ! » O ntángo êná loláká lolobí út’o likoló : « Nasílí nakúmísí yango, mpé nakokúmisa yango lisúsu. »
John LinVB 12:29  Bato bazalákí wâná bayókí loláká, balobí ’te nkáké ebétí. Basúsu balobí : « Anzelú asolólí na yě. »
John LinVB 12:30  Kasi Yézu alobí : « Loláká loye lolobí mpô ya ngáí té, kasi mpô ya bínó.
John LinVB 12:31  Sikáwa bakokáta likambo lya nsé ; sikáwa bakobengana mokonzi wa nsé eye.
John LinVB 12:32  Mpé ngáí, mokolo bakotómbola ngáí, nakobénda bato bánso epái ya ngáí. »
John LinVB 12:33  Na maloba mâná alakísí liwá níni akokúfa.
John LinVB 12:34  Bato bazóngísélí yě : « O Búku ya Mobéko totángí ’te Krístu akozala sékô. Ndéngé níni okokí koloba ’te bakotómbola Mwána wa Moto ? Bôngó Mwána wa Moto, yě náni ? »
John LinVB 12:35  Yézu alobí na bangó : « Mói mokozala na bínó naíno bobélé mwâ mikolo. Bótámbola ntángo bozalí naíno na mói, mpô ’te molílí mókwêla bínó té. Oyo akotámbola o molílí akoyéba té esíká azalí kokende.
John LinVB 12:36  Ntángo bozalí na mói, bóyamba mwangó, mpô bózala bána ba mói. » Esílísí Yézu koloba bôngó, akeí mpé alongwí o míso ma bangó.
John LinVB 12:37  Atâ asálákí bilembo míngi o míso ma bangó, bayambí yě té.
John LinVB 12:38  Esálémí bôngó mpô ya kokokisa maloba ma proféta Izáya : Mokonzi, náni ayambí matéya ma bísó ? Mokonzi alakísí ngúyá ya yě na náni ?
John LinVB 12:39  Yangó wâná bakokákí koyamba té, mpô Izáya alobákí mpé boye :
John LinVB 12:40  Akangí míso ma bangó, akómísí mitéma mya bangó lokóla mabángá, mpô ’te bámóno na míso té, bátongolo ntína té, bábóngola mitéma té, mpé nábíkisa bangó té.
John LinVB 12:41  Izáya alobákí bôngó, zambi amónókí nkémbo ya Yézu, mpé alobákí mpô ya yě.
John LinVB 12:42  Nzókandé atâ o ntéi ya bankúmú ba ba-Yúda míngi bayambí yě ; kasi basakólí yangó té, mpô bazalákí kobánga ’te ba-Farizeó bakobengana bangó o sinagóga.
John LinVB 12:43  Bapusí kolinga lokúmu loútí na bato, leká lokúmu loútí na Nzámbe.
John LinVB 12:44  Yézu alobí na mongóngó makási : « Moto ayambí ngáí, ayambí ngáí mpenzá té, kasi ayambí óyo atíndí ngáí.
John LinVB 12:45  Moto amóní ngáí, amóní óyo atíndí ngáí.
John LinVB 12:46  Ngáí nayéí o nsé lokóla mói, mpô ’te baye bánso bayambí ngáí bátíkala o molílí té.
John LinVB 12:47  Sókó moto ayókí maloba ma ngáí, kasi atósí mangó té, ngáí moto nakokitisa yě té, zambí nayéí kokitisa bato té, nayéí kobíkisa bangó.
John LinVB 12:48  Moto abóyí ngáí, mpé ayambí maloba ma ngáí té, óyo akokitisa yě azalí : maye ngáí nasakólí makokáta likambo lya yě o mokolo mwa nsúka.
John LinVB 12:49  Zambí nalobí o nkó­mbó ya ngáí mǒkó té ; kasi Tatá óyo atíndí ngáí, yě moto ayébísí ngáí maye nasengélí koloba mpé kosakola.
John LinVB 12:50  Mpé nayébí ’te moto akotósa maye Tatá atíndí, akozwa bomoi bwa lobíko. Bôngó mánso nalobí, nalobí mangó sé lokóla Tatá ayébísákí ngáí. »
Chapter 13
John LinVB 13:1  Libosó lya eyenga ya Pásiká, Yézu ayébí ’te elaká ya yě ekokí : akolongwa o nsé eye, akokende o mbóka Tatá. Lokola ali­ngákí bato ba yě áwa o nsé ; alingí bangó téé nsúka.
John LinVB 13:2  Ntángo bazalákí kolía, zábolo asílí kotía o motéma mwa Yudási Iskarióte, mwána wa Simóni, mokáno mwa kokaba Yézu.
John LinVB 13:3  Yézu ayébí ’te aútí na Nzámbe mpé akozónga o mbóka Nzámbe ; ayébí mpé ’te Tatá atíí bínso o mabóko ma yě.
John LinVB 13:4  Bôngó atélémí, alongwí o méza, alongólí moláto, akamátí elambá, akangí yangó o lokéto.
John LinVB 13:5  Na nsima asopí mái o sǎ ni, abandí kosukola bayékoli makolo mpé apangúsí mangó na ela­mbá eye akangákí o lokéto.
John LinVB 13:6  Ekómí yě epái ya Simóni Pétro, Pétro alobí na yě : « Mokonzi, yǒ ndé okosukola ngáí makolo ? »
John LinVB 13:7  Yézu azóngísí : « óyo nakosála sikáwa, oyébí ntína ya yangó té ; okoyéba nsima. »
John LinVB 13:8  Pétro alobí na yě : « Okosukola ngáí makolo té, atâ mokolo mǒkó té ! » Yézu azóngísí : « Sókó obóyí ’te násukola yǒ makolo, okozala moto wa ngáí té. »
John LinVB 13:9  Simóni Pétro alobí : « Mokonzi, sókó ezalí bôngó, ósukola ngáí bobélé makolo té, kasi mabóko ná motó lokóla ! »
John LinVB 13:10  Yézu azóngísí : « Moto asukólí nzóto, asengélí kosukola bobélé makolo, zambí azalí mobimba péto. Bínó mpé bozalí péto, kasi bánso té. »
John LinVB 13:11  Ayébí náni moto akokaba yě, yangó wâná alobí : « Bínó bánso bozalí péto té. »
John LinVB 13:12  Awa asukólí bangó makolo, alátí lisúsu moláto, akeí kofánda o méza, a­lobí na bangó : « Eye nasálí bínó, boyébí ntína ya yangó ?
John LinVB 13:13  Bo­ko­tángaka ngáí Motéyi mpé Mokonzi, mpé bolobí malámu, zambí nazalí Motéyi mpé Mokonzi sôló.
John LinVB 13:14  Bôngó, sókó ngáí, Mokonzi mpé Motéyi, nasukólí bínó makolo, bínó mpé bosengélí kosukolana makolo.
John LinVB 13:15  Napésí bínó ndakisa mpô ’te bínó mpé bósálaka lokóla ngáí nasálí bínó.
John LinVB 13:16  Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Mosáleli alekí mokonzi wa yě té ; sé bôngó na moto atíndámí, óyo atíndí yě alekí yě.
John LinVB 13:17  Awa boyébí yangó, esengo na bínó sókó bosálí bôngó !
John LinVB 13:18  Nalobí bôngó mpô ya bínó bánso té. Nayébí baye naponí. Kasi esengélí ’te maloba ma Minkandá másálema : Moto azalí kolía mámpa na ngáí atombókélí ngáí !
John LinVB 13:19  Nasílí nayébísí bínó yangó libosó ’te ésálema, mpô ’te ntángo ekosálema, bóyamba ’te Ngáí Nazalí.
John LinVB 13:20  Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Moto ayambí óyo ngáí natíndí, ayambí ngáí mǒkó : mpé moto ayambí ngáí, ayambí óyo atíndí ngáí. »
John LinVB 13:21  Elobí Yézu bôngó, atatábání, alobí : « Ya sôló sôló, nayébísí bínó : mǒ­kó wa bínó akokaba ngáí. »
John LinVB 13:22  Bayékoli batálání, bayébí té sókó alobí bô­ngó mpô ya náni.
John LinVB 13:23  Moyékoli mǒkó, óyo Yézu akolingaka, afándí penepene na yě o méza.
John LinVB 13:24  Simóni Pétro ayébísí yě na míso, átúna yě sókó alobákí bôngó mpô ya náni.
John LinVB 13:25  Moyékoli ôná alálísí motó penepene na bontólo bwa Yézu, atúní yě malémbe : « Mokonzi, ezalí náni ? »
John LinVB 13:26  Yézu azóngísí : « Nakotuna eténi ya límpa o sǎ ni ; óyo nakopésa límpa, yě wâná. » Yézu akamátí eténi ya límpa, atuní yangó o sǎ­ni, apésí Yudási, mwána wa Simóni Iskarióte.
John LinVB 13:27  Ntángo azwí eténi ya límpa, zábolo akótélí yě o motéma. Yézu alobí na yě : « óyo olingí kosála, sálá yangó nokí. »
John LinVB 13:28  Kasi moto mǒkó té wa baye bazalákí o méza ayébí ntína níni alobákí na yě bôngó.
John LinVB 13:29  Yudási azalákí kobómba mosolo, bôngó basúsu bakanísí ’te Yézu alobí na yě : « Sómbá bilóko bisengélí na bísó mpô ya eyenga », tǒ ákabela babóla mwâ elóko.
John LinVB 13:30  Ekamátí Yudási eténi ya lí­mpa, abimí ; butú bosílí boíndí.
John LinVB 13:31  Awa Yudási abimí, Yézu alobí : « Sikáwa Mwána wa Moto akozwa nkémbo, mpé Nzámbe akozwa nké­mbo mpô ya yě.
John LinVB 13:32  Awa Nzámbe azwí nkémbo mpô ya yě, Nzámbe mpé akopésa Mwána nkémbo o mbóka yě, mpé akokémbisa yě nokí.
John LinVB 13:33  Bána ba ngáí ba bolingo, nakoúmela o ntéi ya bínó lisúsu míngi té. Ndébolukí ngáí, mpé nakoloba na bínó sikáwa lokóla nalobákí na ba-Yúda : Esíká nakokende, bínó bokokí kokóma té.
John LinVB 13:34  Napésí bínó mobéko mwa sika : Bólingana, lokóla ngáí nakolingaka bínó.
John LinVB 13:35  Sókó bolingání, bato bánso bakoyéba ’te bozalí bayékoli ba ngáí. »
John LinVB 13:36  Simóni Pétro atúní yě : « Mokonzi, okokende wápi ? » Yézu azóngísí : « Esíká nakokende, okokí kolanda ngáí sikáwa té, okolanda ngáí nsima. »
John LinVB 13:37  Pétro alobí : « Mpô níni nakokí kolanda yǒ sikáwa té ? Nakokaba bomoi bwa ngáí mpô ya yǒ. »
John LinVB 13:38  Yézu azóngísí : « Sôló, okokaba bomoi bwa yǒ mpô ya ngáí ? Ya sôló sôló, nayébísí yǒ : Nsósó naíno elelí té, okowángana ngáí mbala ísáto. »
Chapter 14
John LinVB 14:1  « Bózala mitéma likoló likoló té. Bóyamba Nzámbe, bóyamba mpé ngáí.
John LinVB 14:2  O ndáko ya Tatá wa ngáí bisíká bizalí míngi. Sókó ezalákí bôngó té, mbele nayé­bísákí bínó té, nakokende ko­bo­ngisela bínó esíká.
John LinVB 14:3  Sókó nakeí, mpé nabongísélí bínó esíká, nakoyâ lisúsu mpé nakokamata bínó o mbóka ngáí, mpô ’te bínó mpé bózala esíká ngáí nazalí.
John LinVB 14:4  Boyébí esíká nakokende, boyébí mpé nzelá yangó. »
John LinVB 14:5  Tomá alobí na yě : « Mokonzi, toyébí té esíká okokende. Bóníbóní tokokí koyéba nzelá ? »
John LinVB 14:6  Yézu alobí na yě : « Ngáí nazalí Nzelá, Bosôló mpé Bomoi. Moto mǒkó té akokende epái ya Tatá, sókó alekí epái ya ngáí té.
John LinVB 14:7  Sókó boyébí ngáí, bokoyéba mpé Tatá wa ngáí. Bandá sikáwa boyébí yě, mpé bomóní yě. »
John LinVB 14:8  Filípo alobí na yě : « Mokonzi, lakísá bísó Tatá, yangó ekokí na bísó. »
John LinVB 14:9  Yézu alobí na yě : « Mikolo míngi nazalí na bínó, Filípo, kasi oyébí ngáí té, sôló ? Moto amóní ngáí, amóní Tatá. Bôngó ndéngé níni okokí koloba : Lakísá bísó Tatá ?
John LinVB 14:10  Oyambí té ’te ngáí nasangání na Tatá, mpé Tatá asangání na ngáí ? Maloba nazalí koloba na bínó, mazalí maloba ma ngáí mǒkó té ; kasi Tatá óyo asangání na ngáí, yě moto akosála misálá mya yě.
John LinVB 14:11  bóndima yangó ’te nasangání na Tatá mpé Tatá asangání na ngáí. Bóyamba atâ mpô ya misálá miye.
John LinVB 14:12  Ya sôló sôló, nalobí na bínó : moto ayambí ngáí, akosála misálá ngáí nakosálaka. Akosála mpe misálá milekí myangó na bonéne, zambí nazalí kokende o mbóka Tatá.
John LinVB 14:13  Mánso bokosénge o nkómbó ya ngáí, nakosála mangó, mpô ’te na Mwána nkémbo ya Tatá émónono.
John LinVB 14:14  Eye bokosénge o nkómbó ya ngáí, nakosála yangó.
John LinVB 14:15  Sókó bolingí ngáí, bokotósa mibéko mya ngáí.
John LinVB 14:16  Ngáí nakobó­ndela Tatá, mpé Tatá ndâpésí bínó Mobó­ndi mosúsu, ázala na bínó sékô.
John LinVB 14:17  Bato ba nsé bakokí koya­mba Elímo wa Bosôló té, mpô bamóní yě té, mpé bayébí yě té. Bínó boyébí yě, mpô afándí na bínó mpé azalí o mitéma mya bínó.
John LinVB 14:18  Nakotíka bínó lokóla bána bitíké té. Nakozóngela bínó.
John LinVB 14:19  Etíkálí moké bato bakomóno ngáí lisúsu té. Kasi bínó ndébomóní ngáí, zambí nazalí na bomoi ; bínó lokóla bokozala na bomoi.
John LinVB 14:20  Mokolo môná bokoyéba ’te nasangání na Tatá wa ngáí, mpé bínó bosangání na ngáí, mpé ngáí na bínó.
John LinVB 14:21  Moto amemyí mibéko mya ngáí mpé atósí myangó, yě moto alingí ngáí. Oyo alingí ngáí, Tatá akolinga yě, ngáí mpé nakolinga yě, mpé nakomílakisa na yě. »
John LinVB 14:22  Yudási, kasi Iskarióte té, alobí na yě : « Mokonzi, bóníbóní okomílakisa na bísó, kasi na bato basúsu té ? »
John LinVB 14:23  Yézu azóngísélí yě : « Sókó moto alingí ngáí, akotósa maloba ma ngáí, mpé Tatá wa ngáí akolinga yě, tokoyâ o mbóka yě, mpé tokofánda epái ya yě.
John LinVB 14:24  Moto alingí ngáí té, akotósa maloba ma ngáí té. Maloba bínó boyókí mazalí maloba ma ngáí té, kasi maloba ma Tatá moto atíndí ngáí.
John LinVB 14:25  Nayébísí bínó yangó, áwa nazalí naíno na bínó.
John LinVB 14:26  Kasi Mobó­ndi, Elímo Sántu, óyo Tatá akotí­nda o nkómbó ya ngáí, akolakisa bínó mánso, mpé akokundolela bínó mánso nalobákí na bínó.
John LinVB 14:27  Nakotíkela bínó bobóto ; nakopésa bínó bobóto bwa ngáí. Ngáí nakopésa bínó bobóto té lokóla bato ba nsé bakopésaka. Bóyóka nsómo o mitéma té, bóbánga té.
John LinVB 14:28  Boyókí ’te nalobákí na bínó : Nakokende mpé nakozónga epái ya bínó. Sókó bolingákí ngáí, mbele bosepélákí míngi, zambí nakokende o mbóka Tatá, mpô Tatá alekí ngáí na bonéne.
John LinVB 14:29  Nayébísí bínó yangó, áwa esálémí naíno té, mpô ’te ntángo ekosálema, bóyamba.
John LinVB 14:30  Nakoloba na bínó lisúsu míngi té. Mokonzi wa nsé eye azalí koyâ. Akokí kosála ngáí elóko té.
John LinVB 14:31  Kasi bato basengélí koyéba ’te nakolingaka Tatá, mpé nakosálaka sé lokóla atíndí ngáí. Bótéleme ! Tólongwa áwa !
Chapter 15
John LinVB 15:1  Ngáí nazalí nzeté ya sôló ya víno. Tatá wa ngáí azalí nkóló wa elanga ya víno.
John LinVB 15:2  Etápi lya ngáí ínso ibótí mbuma té, akokáta lyangó ; etápi ibótí mbuma, akopétola lyangó mpô ’te íbóta mbuma míngi.
John LinVB 15:3  Bínó bosílí bokómí péto mpô ya matéya natéyákí bínó.
John LinVB 15:4  Bókangana na ngáí lokóla ngáí nakangání na bínó. Etápi ekokí kobóta mbuma té sókó ekangání na nzeté té. Sé bôngó bínó mpé bokokí kobóta mbuma té sókó bokangání na ngáí té.
John LinVB 15:5  Ngáí nazalí nzeté ya víno, bínó bozalí bitápi. Moto akangání na ngáí lokóla ngáí nakangání na yě, akobóta mbuma míngi, zambí sókó tokabwání, bokokí kosála elóko té.
John LinVB 15:6  Sókó moto akangání na ngáí lisúsu té, bakobwáka yě o libándá, lokóla etápi eye ekátání : etápi ekokauka, bakolokoto yangó mpé bakobwáka yangó o móto, ekozíka.
John LinVB 15:7  Sókó bokangání na ngáí, sókó bobómbí maloba ma ngáí o mitéma, bokokí kosénge mánso bolingí, mpé bokozwa mangó.
John LinVB 15:8  Tatá wa ngáí akozwa nkémbo sókó bobótí mbuma míngi mpé sókó bokomílakisaka bayékoli ba ngáí.
John LinVB 15:9  Lokóla Tatá alingí ngáí, ngáí mpé nalingí bínó. Bózalaka o bolingí bwa ngáí.
John LinVB 15:10  Sókó botósí mibéko mya ngáí, bokotíkala o bolingí bwa ngaí, sé lokóla ngáí natósí mibéko mya Tatá wa ngáí, mpé natíkálí o bolingi bwa yě.
John LinVB 15:11  Nayébísí bínó yangó mpô ’te esengo ya ngáí ézala na bínó, mpé esengo étónda o mitéma mya bínó.
John LinVB 15:12  Mobéko mwa ngáí, mwangó moye : Bólinganaka lokóla ngáí na­koli­ngaka bínó.
John LinVB 15:13  yangó ndé nsúka ya bolingi ! Sókó moto akabí bomoi bwa yě mpô ya báníngá.
John LinVB 15:14  Bínó bozalí báníngá ba ngáí, sókó bokosála maye natíndí bínó.
John LinVB 15:15  Nakotá­nga bínó lisúsu basáleli té, zambí mosáleli ayébí té maye mokonzi akosálaka ; kasi nakotánga bínó báníngá, zambí nalakísí bínó mánso nayókí epái ya Tatá.
John LinVB 15:16  Bínó boponí ngáí té, kasi ngáí naponí bínó mpé natíndí bínó bókende, bóbóta mbu­ma, mpé mbuma ya bínó íúmela sékô, mpô ’te mánso bokosénge Tatá o nkómbó ya ngáí, ápésa bínó mangó.
John LinVB 15:18  Sókó bato ba nsé eye bayiní bínó, bóyéba ’te bayinákí ngáí libosó.
John LinVB 15:19  Sókó bozalákí bato ba nsé, mbele bato ba nsé balingákí bínó lokóla elóko ya bangó. Kasi bozalí báníngá ba bangó té, zambí naponí bínó mpé nalongólí bínó o ntéi ya bangó, yangó wâná bato ba nsé bayiní bínó.
John LinVB 15:20  Bókundola o mitéma maloba nalobákí na bínó : mosáleli alekí mokonzi wa yě té. Sókó ba­nyókólókí ngáí, bako­nyókolo bínó lokóla ; sókó bandimákí maloba ma ngáí, bakondima mpé maloba ma bínó.
John LinVB 15:21  Kasi bakosála bínó mâná mánso mpô ya nkómbó ya ngáí, zambí óyo atíndí ngáí, bayébí yě té.
John LinVB 15:22  Sókó nayákí té, sókó mpé nalobákí na bangó té, mbele bazalákí na lisúmu té. Kasi sikáwa bazalí na lisú­mu, bakokí komílóngisa té.
John LinVB 15:23  Moto ayiní ngáí, ayiní mpé Tatá wa ngáí.
John LinVB 15:24  Nasálákí o míso ma bangó misálá miye moto mosúsu asálí té. Sókó nasálákí myangó té, mbele bazalákí na lisúmu té. Kasi bamónókí misálá mya ngáí mpé bayiní bísó, bísó na Tatá wa ngáí.
John LinVB 15:25  Esálémí bôngó mpô ya kokokisa maloba makomámí o Mobéko mwa bangó : Bayinákí ngáí na ntína té.
John LinVB 15:26  Ntángo Mobóndi akoyâ, óyo nakotíndela bínó o nkómbó ya Tatá, akosakola mpô ya ngáí. Yě ndé Elímo wa Bosôló akoúta epái ya Tatá.
John LinVB 15:27  Bínó mpé bokosakola mpô ya ngáí, zambí bozalí na ngáí út’o ebandela.
Chapter 16
John LinVB 16:1  Nayébísí bínó mambí maye mpô ’te bótúta libakú té.
John LinVB 16:2  Ndébabengání bínó o sinagóga, mpé elako ekoyâ bakoboma bínó mpé bakokanisa ’te na yangó bakokúmisa Nzámbe.
John LinVB 16:3  Ndébasálí bínó bôngó, zambí bayébí Tatá té, bayébí ngáí mpé té.
John LinVB 16:4  Nayébísí bínó yangó mpô ’te, sókó elaká ya bangó ekokí, bókundola o mitéma ’te nalobákí na bínó bôngó. Nalobákí na bínó mpô yangó út’o ebandela té, zambí nazalákí na bínó.
John LinVB 16:5  Sikáwa nakokende o mbóka ya óyo atíndí ngáí, mpé mǒkó té o ntéi ya bínó atúní ngáí : ‘Okokende wápi ?’
John LinVB 16:6  Kasi áwa nalobí na bínó mambí mâná, mitéma mya bínó mitóndí na mawa.
John LinVB 16:7  Nzókandé nayébí­sí bínó likambo lya sôló : ebongélí bínó ’te nákende ; zambí sókó nakeí té, Mobó­ndi akoyâ epái ya bínó té. Kasi sókó nakeí, ngáí mǒkó nakotínda yě epái ya bínó.
John LinVB 16:8  Mokolo akoyâ, akolakisa bato ba nsé maye matálí lisúmu, bosémbo mpé bokáti likambo.
John LinVB 16:10  Mpô na bosémbo, zambí nakokende epái ya Tatá, mpé bokomóno ngáí lisúsu té.
John LinVB 16:11  Mpô na bokáti likambo ; mpámba té, mokonzi wa nsé asílí akití o likambo.
John LinVB 16:12  Nazalí naíno na makambo míngi ma koloba na bínó, kasi bokokí na mangó sikáwa té.
John LinVB 16:13  Mokolo Elímo wa bosôló akoyâ, akosangela bínó mambí mánso ma Bosôló, zambí akoloba o nkómbó ya yě mǒkó té ; akoloba mambí ayókákí, mpé akosangela bínó maye makoyâ nsima.
John LinVB 16:14  Yě moto akokúmisa ngáí, zambí akosangela bínó maye akozwa epái ya ngáí.
John LinVB 16:15  Bínso bizalí bya Tatá, bizalí bya ngáí. Yangó wâná nalobí : akosangela bínó maye akozwa epái ya ngáí.
John LinVB 16:16  Etíkálí moké bokomóno ngáí lisúsu té, mpé mwâ moké na nsima ndébomóní ngáí lisúsu. »
John LinVB 16:17  Bayékoli basúsu babandí kotúnana : « Alobí na bísó : ‘Etíkálí moké bókomóno ngáí lisúsu té, mpé mwâ moké na nsima ndébomóní ngáí lisúsu’, ‘zambi nakokende epái ya Tatá’. Yangó elakísí níni ? »
John LinVB 16:18  Batúnání : « Níni yangó : mwâ moké ? Toyókí ntína ya maloba mâná té ! »
John LinVB 16:19  Yézu amóní ’te balingí kotúna yě, alobí : « Bozalí komítúna ntína ya maloba ma ngáí maye : ‘Etíkálí moké bókomóno ngáí lisúsu té mpé mwâ moké na nsima ndébomóní ngáí lisúsu’.
John LinVB 16:20  Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Bokolela mpé bokozala na mawa ; bato ba nsé bakosepela, bínó bokoyóka mawa ; kasi mawa ma bínó makobóngwana esengo.
John LinVB 16:21  Ntango mwásí alingí ábóta, akoyóka nsómo, mpô elaká ya yě ekómí ; kasi áwa abótí, akokanisa lisúsu malózí té, mpô ya esengo ’te mwána abótámí.
John LinVB 16:22  Bínó sé bôngó : Sikáwa bozalí na mawa ; kasi nakomóno bínó lisúsu, bokosepela, mpé moto mǒkó té akobótolo bínó esengo êná.
John LinVB 16:23  O mokolo môná bokotúna ngáí motúna mǒkó té. Ya sôló sôló, nayébísí bínó : Tatá wa ngáí akopésa bínó mánso bokosénge o nkómbó ya ngáí.
John LinVB 16:24  Téé sikáwa boséngí naíno elóko yǒ­kó o nkómbó ya ngáí té ; bósénge mpé bokozwa ; bôngó esengo étónda o mitéma mya bínó.
John LinVB 16:25  Nalobákí na bínó libosó mangó mánso na miúlání. O elako ekoyâ nakoloba na bínó lisúsu na miúlání té, kasi nakosangela bínó polélé mambí ma Tatá wa ngáí.
John LinVB 16:26  Mokolo môná ndéboséngí o nkómbó ya ngáí. Bókanisa té ’te nasengélí na Tatá mpô ya bínó,
John LinVB 16:27  zambí Tatá yě mǒkó alingí bínó, mpô bolingí ngáí mpé bondimí ’te naútí epái ya Nzámbe.
John LinVB 16:28  Naútí epái ya Tatá mpé nakómí o nsé ; sikáwa nakotíka nsé mpé nakokende o mbóka Tatá. »
John LinVB 16:29  Bayékoli balobí na yě : « Sikáwa olobí polélé, na miúlání lisúsu té !
John LinVB 16:30  Sikáwa tomóní ’te oyébí mánso ; esengélí té ’te bátúna yǒ. Yangó wâná toyambí ’te oútí epái ya Nzámbe. »
John LinVB 16:31  Yézu azóngísí : « Bo­ya­mbí sikáwa,
John LinVB 16:32  kasi elako eko­yâ, mpé esílí eyéí, bokopanzana, moto na moto o esíká ya yě, mpé bokotíka ngáí mǒkó. Kasi nazalí bobélé ngáí mǒ­kó té, tozalí bísó na Tatá.
John LinVB 16:33  Nalobí na bínó mpô yangó mpô ’te bózala na bobóto o boyambi ngáí. Awa o nsé bokoyóka mpási. Kasi bóléndisa mitéma ! Ngáí esi nalóngí nsé ! »
Chapter 17
John LinVB 17:1  Elobí Yézu bôngó, atómbólí míso epái ya likoló, alobí : « Tatá, elaká ekokí. Kúmísá Mwána wa yǒ mpô ’te Mwána wa yǒ ákúmisa yǒ.
John LinVB 17:2  Osílí opésí yě bokonzi bwa bato bánso, mpô ’te ákabela bato opésí yě bomoi bwa sékô.
John LinVB 17:3  Bomoi bwa sékô, bwangó ’te báyéba yǒ, Nzámbe wa sôló sé mǒ­kó, báyéba mpé óyo otíndí : Yézu Krístu !
John LinVB 17:4  Na bosílisi mosálá opésí ngáí, nalakísí bato ba nsé nkémbo ya yǒ.
John LinVB 17:5  Sikáwa, Tatá, pésá ngáí nkémbo epái ya yǒ, eye nazalákí na yangó ntángo likoló na nsé bizalákí naíno té.
John LinVB 17:6  Nasangélí bato nkómbó ya yǒ, bato baye olongólí o nsé eye mpô ’te ópésa ngáí. Bazalákí bato ba yǒ, opésí ngáí bangó, mpé bayambí maloba ma yǒ.
John LinVB 17:7  Sikáwa bayébí ’te mánso opésí ngáí maútí epái ya yǒ.
John LinVB 17:8  Nayébísí bangó maloba oyébísákí ngáí ; bayambí mangó ; sikáwa bayébí sôló ’te naútí epái ya yǒ, mpé bayambí ’te yǒ moto otí­ndí ngáí.
John LinVB 17:9  Nazalí kosámbela mpô ya bangó. Nakosámbela mpô ya bato ba nsé té, kasi mpô ya bato opésí ngáí, zambí bazalí bato ba yǒ.
John LinVB 17:10  Bínso bizalí bya ngáí, bizalí bya yǒ ; bínso bizalí bya yǒ, bizalí bya ngáí ; nazwí lokúmu mpô ya bangó.
John LinVB 17:11  Ngáí nakoúmela lisúsu o nsé eye té, ngáí nakoyâ epái ya yǒ ; kasi bangó bafándí o nsé. Tatá mosántu, bátélá o nkómbó ya yǒ baye opésí ngáí, mpô ’te bázala sé moto mǒkó lokóla bísó na yǒ.
John LinVB 17:12  Ntángo nazalákí na bangó, nabátélákí bangó na ngúyá ya nkómbó ya yǒ, nkómbó opésí ngáí. Nakéngélékí bangó : mǒ­kó wa bangó abúngámí té, tíká sé óyo asengélákí kobúngama mpô ’te ésálema lokóla ekomámí o Minkandá Misántu.
John LinVB 17:13  Kasi sikáwa nakoyâ epái ya yǒ. Nalobí bôngó áwa nazalí naíno o nsé, mpô ’te bázala na esengo ya ngáí o mitéma mya bangó mpé bátónda na yangó.
John LinVB 17:14  Nalakísí bangó matéya ma yǒ, mpé bato ba nsé bayiní bangó, zambí bangó bazalí bato ba nsé té, lokóla ngáí mpé nazalí moto wa nsé té.
John LinVB 17:15  Nabóndélí yǒ : ólongola bangó o nsé té, kasi óbíkisa bangó o mabóko ma mobébisi.
John LinVB 17:16  Bazalí bato ba nsé té, lokóla ngáí mpé nazalí moto wa nsé té.
John LinVB 17:17  Osántisa bangó na bosôló ; maloba ma yǒ mazalí sé ma bosôló.
John LinVB 17:18  Natíndí bangó o káti ya bato, lokóla yǒ otíndákí ngáí o káti ya bato.
John LinVB 17:19  Nakomíkaba mobimba mpô ya bangó mpô ’te bangó mpé bákóma sôló bato ba yǒ.
John LinVB 17:20  Nazalí kosámbela bobélé mpô ya bangó té, kasi mpé mpô ya bato bakoyóka matéya ma bangó mpé bakoyamba ngáí nsima mpô ya matéya ma bangó,
John LinVB 17:21  mpô ’te bánso bázala sé moto mǒkó. Lokóla bísó na yǒ, Tatá, tozalí sé moto mǒkó, bangó mpé bázala na bísó lisangá, mpô ’te bato ba nsé báyamba ’te yǒ moto otíndí ngáí.
John LinVB 17:22  Napésí bangó nkémbo óyo opésákí ngáí, mpô ’te bázala sé moto mǒkó lokóla bísó na yǒ tozalí sé moto mǒ­kó :
John LinVB 17:23  ngáí násangana na bangó mpé yǒ ósangana na ngáí, mpô ’te bázala sé moto mǒ­kó mpenzá, mpé bato ba nsé báyéba ’te yǒ moto otíndí ngáí, mpé okolingaka bangó lokóla okoli­ngaka ngáí.
John LinVB 17:24  Tatá, nalingí ’te baye opésí ngáí bázala na ngáí esíká ngáí nakoke­nde, bámóno nkémbo ya ngáí, eye opésí ngáí, zambí olingákí ngáí naíno mokili mokelámí té.
John LinVB 17:25  Tatá wa bosémbo, bato ba nsé bayébí yǒ té, kasi ngáí nayébí yǒ, mpé bato baye bandimí ’te yǒ moto otíndí ngáí.
John LinVB 17:26  Nalakísí bangó nkómbó ya yǒ mpé nakokóba kolakisa yangó naíno mpô ’te bolingi okolingaka ngáí bózala o mitéma mya bangó, mpé ngáí mǒkó názala o mitéma mya bangó. »
Chapter 18
John LinVB 18:1  Esílísí Yézu koloba bôngó, abimí elongó na bayékoli ba yě ; bakátísí ngámbo ya mái ma Sédron. Lopángo lozalákí wâná ; Yézu ayíngélí wâná na bayékoli ba yě.
John LinVB 18:2  Yudási, moto akokaba yě, ayébí mpé esíká yangó, zambí Yézu azalákí kokende kúná mbala míngi na bayékoli ba yě.
John LinVB 18:3  Yudási akambí libóké lya basodá na bakéngeli baye banganga bakonzi na ba-Farizéo bapésí yě ; bayéí wâná na miínda, na bisúngi mpé na bibuneli.
John LinVB 18:4  Yézu ayébí mánso makokwêla yě, yangó wâná akeí epái ya bangó mpé alobí : « Bozalí koluka náni ? »
John LinVB 18:5  Bazóngísí : « Yézu wa Nazaréte. » Yézu alobí na bangó : « Ngáí óyo. » Yudási, moto akabí yě, azalákí mpé wâná elongó na bangó.
John LinVB 18:6  Awa Yézu alobí na bangó « Ngáí óyo », bazóngí nsima mpé bakwéí o nsé.
John LinVB 18:7  Yézu atúní bangó lisúsu : « Bozalí koluka náni ? » Balobí : « Yézu wa Nazaréte. »
John LinVB 18:8  Yézu azóngísí : « Nasílí nalobí : Ngáí óyo. Sókó bozalí koluka ngáí, bótíka bangó báke­nde. »
John LinVB 18:9  esálémí bôngó sé lokóla yě mǒ­kó alobákí : ‘Na baye opésí ngáí, nabúngísí atâ mǒ­kó té’.
John LinVB 18:10  Simóni Pétro azalákí na mompánga, abimísí mwangó, abétí mosáli wa nganga mokonzi mpé akátí yě litói lya mobáli. Nkómbó ya mosáli ôná Málko.
John LinVB 18:11  Kasi Yézu alobí na Pétro : « Zóngísá mompánga o esíká ya yangó. Nkéni Tatá apésí ngáí, námele yangó té ? »
John LinVB 18:12  Na nsima basodá, komandá na bakéngeli ba ba-Yúda bakangí Yézu na nsinga.
John LinVB 18:13  Bakeí na yě epái ya Ana. Ana azalákí bokiló wa Kaífa ; azalákí nganga mokonzi o mobú wana.
John LinVB 18:14  Kaífa moto apésáká ba-Yúda lilako liye : « Malámu bobélémoto mǒkó ákúfa mpô ya bato bánso. »
John LinVB 18:15  Simóni Pétro na moyékoli mosúsu, balandí Yézu. Moyékoli ôná ayébání na nganga mokonzi ; bôngó akótí elongó na Yézu o lopángo la nganga mokonzi.
John LinVB 18:16  Pétro atíkálí o libándá penepene na monoko mwa lopángo. Moyékoli mosúsu, óyo ayébání na nganga mokonzi, abimí ; asolólí na mwásí mokéngeli wa lopángo, akótísí Pétro.
John LinVB 18:17  Mokéngeli mwásí ôná alobí na Pétro : « Yǒ mpé ozalí mǒkó wa bayékoli ba moto óyo té ? » Pétro azóngísí : « Té, ngáí té. »
John LinVB 18:18  Mpô ezalákí mpío, basáli na basodá bapelísákí móto, bazalákí koyóto móto. Pétro atélémí epái ya bangó, yě mpé azalákí koyóto móto.
John LinVB 18:19  Nganga mokonzi atúní Yézu mpô ya bayékoli mpé mpô ya matéya ma yě.
John LinVB 18:20  Yézu azóngísí : « Nazalákí koloba polélé o míso ma bato bánso. Mikolo mínso nazalákí kotéya o sinagóga mpé o Témpelo, esíká ba-Yúda bánso bakosanganaka ; nalobákí elóko yǒ kó na bonkútú té.
John LinVB 18:21  Mpô níni otúní ngáí ? Túná bato bayókákí matéya nazalákí kotéya ; bangó bayébí níni nalobákí. »
John LinVB 18:22  Elobí yě bôngó, mosáleli mǒkó, óyo atélémí penepene na Yézu, abétí yě mbatá, alobí : « Bakoyanolaka nganga mokonzi ndé boye ? »
John LinVB 18:23  Yézu azóngísélí yě : « Sókó nalobí mabé, lakísá mabé mâná ; kasi sókó nalobí malámu, mpô níni obétí ngáí ? »
John LinVB 18:24  Na nsima Ana atíndí Yézu epái ya Kaífa, nganga mokonzi. Yézu azalákí sé kokangema, nsinga o mabóko.
John LinVB 18:25  Simóni Pétro azalákí sé koyóto móto ntángo balobí na yě : « Yǒ mpé ozalí mǒkó wa bayékoli ba yě té ? » Awángání, alobí : « Té, ngáí té. »
John LinVB 18:26  Mosáleli mǒkó wa nganga mokonzi, ndeko wa moto óyo Pétro akátákí yě litói, alobí lisúsu : « Namónókí yǒ o lopángo elongó na yě té ? »
John LinVB 18:27  Pétro awángání lisúsu, mpé bobélé o ntá­ngo êná nsósó elelí.
John LinVB 18:28  Na ntóngó mpenzá balongwí epái ya Kaífa, bakeí na Yézu o ndáko ya moyángeli wa ekólo. Ba-Yúda bakótí o ndáko ya moyángeli té, mpô ’te bákóma na mbindo té, mpô bákoka kolía limpáti lya Pásiká.
John LinVB 18:29  Bôngó Piláto abimí mpé akeí epái ya bangó. Atúní bangó : « Boyéí kofúnda moto óyo na likambo níni ? » Bazóngísélí yě :
John LinVB 18:30  « Sókó azalákí moto mabé té, mbele tokabí yě o mabóko ma yǒ té. »
John LinVB 18:31  Piláto alobí na bangó : « Bínó mǒkó bókamata yě, mpé bósámbisa yě, engébéné na Mobéko mwa bínó. » Ba-Yúda bazóngísélí yě : « Balingísí bísó koboma moto té. »
John LinVB 18:32  Esálémí bôngó mpô ya kokokisa maye Yézu alobákí ntángo ayébísákí ndéngé níni akowá.
John LinVB 18:33  Piláto akótí lisúsu o ndáko, abyá­ngí Yézu, atúní yě : « Ozalí mo­konzi wa ba-Yúda ? »
John LinVB 18:34  Yézu azóngísí : « Olobí bôngó na mayéle ma yǒ mǒ­kó, tǒ bato basúsu bayébísí yǒ bôngó mpô ya ngáí ? »
John LinVB 18:35  Piláto ayanólí : « Ngáí nazalí ndé mo-Yúda ? Bato ba ekólo ya yǒ na banganga bakonzi bakabí yǒ o mabóko ma ngáí. Osálí níni ? »
John LinVB 18:36  Yézu azóngísí : « Bokonzi bwa ngáí bozalí bwa nsé eye té. Sókó bokonzi bwa ngáí bozalákí bwa nsé eye, mbele bato ba ngáí babundí mpô ’te nákwéya o mabóko ma ba-Yúda té. Kasi bokonzi bwa ngáí bozalí bwa nsé eye té. »
John LinVB 18:37  Piláto alobí na yě : « Bôngó ozalí mokonzi ? » Yézu azó­ngísí : « Lokóla olobí, nazalí mokonzi. Nabótámí mpé nayéí áwa o mokili mpô ’te násakola bosôló. Moto nyónso akondima bosôló, akoyóka ngáí ! »
John LinVB 18:38  Piláto alobí na yě : « Bosôló, níni yangó ? » Elobí yě bôngó, abimí lisúsu, akeí epái ya ba-Yúda, alobí na bangó : « Namóní ntína yǒ kó té ya kokitisa moto óyo.
John LinVB 18:39  Kasi bozalí na momeseno ’te nábimisela bínó moto mǒkó wa bo­lóko o eyenga ya Pásiká. Bolingí nábimisela bínó mokonzi wa ba-Yúda ? »
John LinVB 18:40  Bánso bagángí lisúsu, bangó ’te : « Yě té, kasi Báraba ! » Báraba azalákí moyíbi monéne.
Chapter 19
John LinVB 19:2  Basodá bato­ngí ekáta ya nzúbe, batíí yangó o motó mwa Yézu ; balátísí yě elambá ya lángi lo­ngóndo ;
John LinVB 19:3  babelémí na yě, balobí : « Losáko, mokonzi wa ba-Yúda ! » mpé babétí yě mbatá.
John LinVB 19:4  Piláto abimí lisúsu, alobí na bangó : « Tálá, nakobimisa yě o míso ma bínó mpô bóyéba ’te ngáí namóní ntína yǒ kó té ya kokitisa yě. »
John LinVB 19:5  Bôngó Yézu abimí, ekáta ya nzúbe o motó, alátí elambá ya lángi longóndo. Piláto alobí na bangó : « Botálá moto óyo ! »
John LinVB 19:6  Ntángo banganga bakonzi na bakéngeli ba bangó bamóní yě, bagángí : « Báká yě o kurúse ! Báká yě o kurúse ! » Piláto alobí na bangó : « Bínó mǒ­kó bókamata yě, bóbáka yě o kurúse ; ngáí namóní ntína yǒ kó té ya kokitisa yě. »
John LinVB 19:7  Ba-Yúda bazóngísélí yě : « Bísó tozalí na Mobéko, engébéné na Mobéko mwangó asengélí kokúfa, mpô alobákí ’te azalí Mwána wa Nzámbe. »
John LinVB 19:8  Eyókí Piláto bôngó, akó­mí kobánga míngi.
John LinVB 19:9  Akótí lisúsu o ndáko, alobí na Yézu : « Oútí wápi ? » Kasi Yézu azóngísí liloba té.
John LinVB 19:10  Bô­ngó Piláto alobí na yě : « Obóyí koloba na ngáí ? Oyébí té ’te nakokí kobíkisa yǒ, nakokí mpé kolingisa ’te bábáka yǒ o kurúse ? »
John LinVB 19:11  Yézu azóngísí : « Sókó Nzámbe alingísákí yǒ yangó té, mbele okokí kosála ngáí elóko té. Yangó wâná moto akabí ngáí o mabóko ma yǒ, asálí lisúmu lilekí bonéne. »
John LinVB 19:12  Ut’o ntángo êná Piláto alukí nzelá ya kobíkisa yě ; kasi ba-Yúda bakóbí kogánga : « Sókó otíkí yě, ozalí móníngá wa Kaizáro té ! Moto akomítángaka mokonzi, azalí mongúná wa Kaizáro. »
John LinVB 19:13  Eyókí Piláto bôngó, abimísí Yézu o libándá, afándí o kíti ya esámbi, o esíká bakobéngaka ‘Litóstrotos’ o lokóta la ba-Gréki mpé ‘Gabata’ o ebréi.
John LinVB 19:14  Ezalákí mokolo mwa boléngeli eyenga ya Pásiká, penepene na ngo­nga ya midí. Piláto alobí na ba-Yúda : « Táláni mokonzi wa bínó. »
John LinVB 19:15  Kasi bangó bagángí : « Akúfa ! Akúfa ! Báká yě o kurúse ! » Piláto atúní bangó : « Bôngó nábáka mokonzi wa bínó o kurúse ? » Banganga bakonzi bazóngísí : « Bísó tozalí na mokonzi mosúsu té, bobélé Kaizáro ! »
John LinVB 19:16  Na nsima Piláto atíkélí bangó Yézu bábáka yě o kurúse. Bakeí na Yézu.
John LinVB 19:17  Yě mǒkó amemí kurúse ya yě, abimí o engumbá mpé akómí o esíká bakobyángaka ‘Ekwókóló’, o lokóta la ebréi ‘Gólgota’.
John LinVB 19:18  Kúná babákí yě o kurúse, elongó na bato basúsu bábalé : mǒ­kó epái, mosúsu epái, Yézu o káti.
John LinVB 19:19  Piláto akomísí mwâ libáyá mpé atíndákí ’te bábáka lyangó o kurúse ; bakomí wâná : ‘Yézu wa Nazaréte, mokonzi wa ba-Yúda’.
John LinVB 19:20  Ba-Yúda baíké batángí maloba mâná, mpô esíká babákí Yézu o kurúse ezalákí penepene na engumbá, mpé maloba mâná makomámí o ebréi, o latíni mpé o gréki.
John LinVB 19:21  Banganga bakonzi ba ba-Yúda bakeí koloba na Piláto : « Okoma té : Mokonzi wa ba-Yúda, kasi komá : Moto óyo alobákí : nazalí mokonzi wa ba-Yúda. »
John LinVB 19:22  Piláto azóngísí : « Maye nakomí, nasílí nakomí. »
John LinVB 19:23  Awa basodá babákí Yézu o kuruse, bakamátí bilambá bya yě, mpé bakabólí byangó na biténi bínei : sodá mǒkó mǒkó ázwa eténi. Bakamátí mpé monkóto mwa yě molaí, moto­ngámá, basoní mwangó té.
John LinVB 19:24  Basodá balobání : « Tópasola mwa­ngó té ; kasi tóbéte mbese sókó náni akozwa mwangó. » Basálí bôngó mpô ya kokokisa maloba ma Minkandá Misántu : Bakabólání bilambá bya ngáí, babétí mbese mpô ya kozwa moláto mwa ngáí. Basodá basálí sé bôngó.
John LinVB 19:25  Penepene na kurúse ya Yézu mamá wa yě atélémí, na ndeko wa mamá wa yě, María mwásí wa Kléofa, ná María wa Mágdala.
John LinVB 19:26  Emóní Yézu mamá wa yě, mpé penepene na yě moyékoli óyo akolingaka míngi, alobí na mamá : « Mamá, tálá mwána wa yǒ. »
John LinVB 19:27  Na nsima alobí na moyékoli : « Tálá mamá wa yǒ. » Bandá ntángo êná moyékoli akamátí yě o ndáko ya yě.
John LinVB 19:28  Nsima ya yangó Yézu ayébí ’te akokísí mánso. Mpô ’te ésálema lokóla ekomámí o Minkandá Misántu, alobí : « Nayókí mpósá ya mái. »
John LinVB 19:29  Mbéki ezalákí wâná etóndí na víno ngai. Basodá bakamátí linyuká, batuní lyangó o víno, bakangí lyangó o nkékélé, batómbólí lyangó téé o monoko mwa Yézu.
John LinVB 19:30  Emekí Yézu víno ngai, alobí : « Mánso makokísámí. » Asunísí motó mpé akátí motéma.
John LinVB 19:31  Ezalákí mokolo mwa boléngeli eyenga ya Pásiká. Ba-Yúda balingí té ’te nzóto ya bato ítíkala o kurúse o mokolo mwa eyenga, mpô ezalákí eyenga enéne. Yangó wâná basé­ngí Piláto ’te bábúka bangó makolo mpé bálongola bangó.
John LinVB 19:32  Bôngó basodá bayéí, babúkí makolo ma moto wa libosó mpé ma moto mosúsu baye babákémí o kurúse elongó na Yézu.
John LinVB 19:33  Ntángo bakómí epái ya Yézu, bamóní ’te asílí kokáta motéma ; babúkí makolo ma yě té.
John LinVB 19:34  Kasi sodá mǒkó atúbólí yě mopanzí na likongó ; sé o ntángo êná makilá na mái mabimí.
John LinVB 19:35  Oyo amóní yangó na míso, yě moto asakólí yangó ; maye asakólí mazalí ma sôló, mpé ayébí ’te alobí mambí ma sôló mpô ’te bínó mpé bóyamba.
John LinVB 19:36  Esálémí bôngó mpô ya kokokisa maye makomámí o Minkandá Misántu : Ndébabúkí yě atâ monkúwa mǒkó té.
John LinVB 19:37  Mpé o esíká esúsu bakomí ’te : Bakotála moto óyo batúbólí na likongó.
John LinVB 19:38  Nsima ya yangó Yozéfu wa Arimatéa aséngí Piláto álingisa yě kobákola nzóto ya Yézu. Yozéfu azalákí moyékoli wa Yézu, kasi na bonkútú, mpô azalákí kobánga ba-Yúda. Piláto alingísí yě, bôngó ayéí kolongola nzóto.
John LinVB 19:39  Nikodémo mpé ayéí, óyo ayáká kotála Yézu na butú ; ayéí na malási masangání na míra kópo sókí monkámá.
John LinVB 19:40  Bakamátí nzóto ya Yézu, elongó na malási bazíngí yangó na bilambá, lokóla ba-Yúda bakosálaka ntángo baku­ndí moto.
John LinVB 19:41  O esíká babákákí Yézu o kurúse elanga ezalákí, mpé o elanga lilíta lya sika, esíká bakundí naíno moto mǒkó té.
John LinVB 19:42  Bakundí Yézu wâná : basálí bô­ngó, mpô ezalákí mokolo mwa boléngeli eyenga ya ba-Yúda, mpé lilíta lizalákí penepene.
Chapter 20
John LinVB 20:1  Mokolo nsima ya sábato, na ntá ntóngó, ezalákí naíno molílí, María wa Mágdala akeí o lilíta. Amóní ’te libángá lilongwí o monoko mwa lilíta.
John LinVB 20:2  Akeí mbángu epái ya Simóni Pétro na moyékoli mosúsu óyo Yézu azalákí kolinga, alobí na bangó : « Balongólí Mokonzi o lilíta, mpé toyébí té esíká batíí yě. »
John LinVB 20:3  Pétro na moyékoli mosúsu babimí, bakeí o lilíta.
John LinVB 20:4  Bánso bábalé batámbwísí makolo, kasi moyékoli mosúsu alekí Pétro na mbángu, atíkí yě nsima, akómí libosó o lilíta.
John LinVB 20:5  Asunámí, amóní bilambá bilálí o nsé, kasi akótí té.
John LinVB 20:6  Pétro ala­ndí yě o nsima, yě mpé akómí. Ayíngélí o lilíta, amóní bilambá bilálí o nsé,
John LinVB 20:7  ná mpé elambá eye bazíngákí Yézu o motó. Elambá êná elálí esíká yǒ kó na bilambá té, kasi ezíngámí o esíká esúsu.
John LinVB 20:8  O ntángo êná moyékoli mosúsu, óyo ayákí libosó, akótí mpé. Amóní mpé ayambí.
John LinVB 20:9  Naíno bayékoli bayébákí ntína ya maloba ma Mindanká Misántu té ’te Yézu asengélákí kosé­kwa o bawá.
John LinVB 20:11  María atélémí o libándá penepene na lilíta, azalákí kolela. Ezalákí yě kolela bôngó, asunámí epái ya lilíta,
John LinVB 20:12  amóní bǎnzelú bábalé balátí bilambá mpémbé, bafándí esíká nzóto ya Yézu elálákí, mǒkó epái ya motó, mosúsu epái ya makolo.
John LinVB 20:13  Batúní yě : « Mwasi, mpô níni ozalí kolela ? » Azóngísí : « balongólí Mokonzi wa ngáí, mpé nayébí té esíká batíí yě. »
John LinVB 20:14  Elobí yě bôngó, amíbóngólí, amóní Yézu, kasi ayébí té ’te ezalákí yě.
John LinVB 20:15  Yézu alobí na yě : « Mwasi, mpô níni ozalí kolela ? Ozalí koluka náni ? » María akanísí ’te ezalákí mosáli wa lopángo, alobí na yě : « Tatá, sókó yǒ moto olongólí yě, yébísá ngáí esíká níni otíí yě, bôngó nákende kokamata yě. »
John LinVB 20:16  Yézu alobí na yě : « María ! » María amíbó­ngólí, alobí na Yézu o ebréi : « Rabóni ! » lokóla ’te « Motéyi. »
John LinVB 20:17  Yézu alobí na yě : « Osímba ngáí té, mpô nabutí naíno epái ya Tatá té. Kasi kendé koyébisa bandeko ba ngáí ’te nakobuta epái ya Tatá wa ngáí, óyo azalí mpé Tatá wa bínó ; epái ya Nzámbe wa ngáí, óyo azalí mpé Nzámbe wa bínó. »
John LinVB 20:18  María wa Má­gdala akeí koyébisa bayékoli ’te amónókí Mokonzi ná mpé maye alobákí na yě.
John LinVB 20:19  Sé mokolo môná, mokolo nsima ya sábato, na mpókwa, bayékoli ba Yézu basangání esíká yǒ kó ; bizibeli bya ndáko bínso bikangémí, mpô bazalákí kobánga ba-Yúda. Yézu ayéí, atélémí o ntéi ya bangó, alobí : « Bobóto na bínó ! »
John LinVB 20:20  Elobí yě bôngó, alakísí bangó mabóko na mopanzí. Awa bamóní Mokonzi, bayékoli basepélí míngi.
John LinVB 20:21  Alobí na bangó lisúsu : « Bobóto na bínó ! Lokóla Tatá atíndákí ngáí, ngáí mpé natíndí bínó. »
John LinVB 20:22  Nsima ya maloba maye apémélí bangó mpéma mpé alobí : « Bókúla Elímo Sántu ;
John LinVB 20:23  masúmu ma bato bínó bokolímbisa, makolímbama ; masúmu ma baye bínó bokolímbisa té, makotíkala na bangó. »
John LinVB 20:24  Kasi Tomá, mǒkó wa ba-zómi na bábalé, óyo bakobéngaka Lipása, azalákí na bangó té ntángo Yézu ayákí.
John LinVB 20:25  Bayékoli basúsu balobí na yě : « Tomónókí Mokonzi. » Kasi yě alobí : « Sókó namóní bilembo bya nsété o mabóko ma yě té, sókó natíí mosapi o mpótá ya nsété té, mpé sókó natíí lobóko o mopanzí mwa yě té, nakoyamba té. »
John LinVB 20:26  Nsima ya mikolo mwambe, bayékoli basangání lisúsu o ndáko, mpé Tomá azalákí na bangó. Bizibeli bikangémí. Yézu ayéí, atélémí o ntéi ya bangó, alobí : « Bobóto na bínó ! »
John LinVB 20:27  Na nsima alobí na Tomá : « Tíá mosapi mwa yǒ áwa mpé tálá mabóko ma ngáí. Tandá lobóko mpé tíá langó o mopanzí mwa ngáí ; tíká kobéte ntembe, kasi yambá sé boyambi. »
John LinVB 20:28  Tomá azóngísélí yě : « Mokonzi wa ngáí mpé Nzámbe wa ngáí ! »
John LinVB 20:29  Yézu alobí : « Oyambí zambí omóní ngáí ; kasi esengo na bato bakoyamba atâ bamóní té. »
John LinVB 20:30  O míso ma bayékoli Yézu asálí bilembo bisúsu míngi, biye bikomámí o búku eye té.
John LinVB 20:31  Kasi biye bikomamí áwa bikomámí mpô ’te bóyamba ’te Yézu azalí Krístu, Mwána wa Nzámbe, mpé mpô ’te, sókó boyambí, bózwa bomoi mpô ya nkómbó ya yě.
Chapter 21
John LinVB 21:1  Na nsima Yézu abimélí bayekoli lisúsu o libóngo lya etíma ya Tibéria. Abimélí bangó boye :
John LinVB 21:2  Simóni Pétro, Tomá, óyo bakobé­ngaka Lipása, Natánael wa Kána o Galiléa, bána ba Zebedéo, na bayékoli basúsu bábalé, bazalákí esíká yǒ kó.
John LinVB 21:3  Simóni Pétro alobí na bangó : « Nakeí kolóbo mbísi. » Balobí na yě : « Bísó mpé tokokende na yǒ. » Bakeí mpé bakwélí o bwáto. Kasi o butú bôná babomí elóko té.
John LinVB 21:4  Awa ntóngó ebandí kotána, Yézu atélémí o libóngo, kasi bayékoli bayébí té ’te ezalákí Yézu.
John LinVB 21:5  Yézu abé­ngí bangó : « Bána é, bozwí mwâ mbísi ? » Bazóngísí : « Té. »
John LinVB 21:6  Alobí na bangó : « Bóbwáka monyámá o lobóko la mobáli la bwáto, bokozwa. » Ba­bwákí monyámá, mpé bakokí kobé­nda mwangó lisúsu té : monyámá motóndí na mbísi.
John LinVB 21:7  Moyékoli óyo Yézu azalaki kolinga alobí na Pétro : « Mokonzi yě wâná ! » Eyókí Pétro ’te ezalákí Mokonzi, alátí elambá ya yě, zambí alátákí elambá té ; amíbwákí o mái.
John LinVB 21:8  Bayékoli basúsu bayéí na bwáto, babé­ndí monyámá na mbísi ; bazalákí penepene na libóngo, mabóko sókí nkámá íbalé.
John LinVB 21:9  Balubwí o mokili, bamóní móto mwa makála, na mbísi likoló lya móto, ná mámpa.
John LinVB 21:10  Yézu alobí : « Bóyâ na mwâ mbísi boútí koboma. »
John LinVB 21:11  Simóni Pétro akwélí o bwáto mpé abéndí monyámá o mokili. Monyámá motóndí na mbísi : mbísi inéne monkámá na ntúkú ítáno na ísáto ; atâ mbísi izalákí ebelé boye, monyámá mopaswání té.
John LinVB 21:12  Yézu alobí na bangó : « Yákáni kolía. » Moto mǒkó té amekí kotúna yě : « Yǒ náni ? », zambí bayébí malámu ’te ezalákí Mokonzi.
John LinVB 21:13  Yézu ayéí penepene, akamátí mámpa, apésí bangó ; apésí bangó mpé mbísi.
John LinVB 21:14  Ezalákí mbala ya ísáto Yézu abimélí bayékoli bandá mokolo asékwí o bawá.
John LinVB 21:15  Awa basílísí kolía, Yézu alobí na Simóni Pétro : « Simóni, mwána wa Yoáne, okolingaka ngáí leká bání­ngá ? » Azóngísí : « Iyo, Mokonzi, oyébí ’te nakolingaka yǒ. » Yézu alobí na yě : « Kambá bana meme ba ngáí. »
John LinVB 21:16  Atúní yě mbala ya íbalé : « Simóni, mwána wa Yoáne, okolingaka ngáí ? » Azóngísí : « Iyo, Mokonzi, oyébí ’te nakolingaka yǒ. » Yézu alobí na yě : « Kambá mpatá ya ngáí. »
John LinVB 21:17  Alobí na yě mbala ya ísáto : « Simóni, mwána wa Yoáne, okoli­ngaka ngáí ? » Pétro ayókí mawa míngi, zambí Yézu atúní yě mbala ísáto : Okolingaka ngáí ? Alobí na yě : « Mokonzi, oyébí mánso, oyébí ’te nakolingaka yǒ. » Yézu alobí na yě : « Kambá mpatá ya ngáí.
John LinVB 21:18  Ya sôló sôló, nayébísí yǒ : Ntángo ozalákí elengé, yǒ mǒkó ozalákí kokanga nkámba o lokéto mpé kokende esíká yǒ mǒkó olingákí. Kasi ntángo okokóma mobangé, okotanda mabóko, mpé moto mosúsu akolátisa yǒ nkámba o lokéto, mpé akoka­mba yǒ esíká okolinga té. »
John LinVB 21:19  Na maloba maye Yézu alakísí na liwá níni asengélákí kokúmisa Nzá­mbe. Na nsima Yézu alobí na yě : « Landá ngáí ! »
John LinVB 21:20  Pétro amíbóngólí, amóní ’te moyékoli óyo Yézu akolingaka azalákí kolanda bangó. Yě moto alálísákí motó penepene na bontólo bwa Yézu o ntángo ya limpáti, mpé atúnákí Yézu : « Mokonzi, náni akokaba yǒ. »
John LinVB 21:21  Awa Pétro amóní yě, alobí na Yézu : « Mokonzi, bôngó na yě ekozala ndéngé níni ? »
John LinVB 21:22  Yézu azóngísí : « Sókó nalingí ’te átíkala téé mokolo nakoyâ, ezalí ndé likambo lya yǒ ? Yǒ, landá ngáí. »
John LinVB 21:23  Nsango epalángání o ntéi ya bandeko ’te moyékoli óyo akokúfa té. Nzókandé Yézu alobákí na Pétro té ’te akokúfa té, kasi « Sókó nalingí ’te átíkala téé mokolo nakoyâ, ezalí ndé likambo lya yǒ ? »
John LinVB 21:24  Moyékoli óyo asakólí makambo maye amónókí, akomí mangó o mo­nkandá, mpé toyébí ’te makambo asakólí mazalí ma sôló.
John LinVB 21:25  Yézu asálí naíno misala misúsu míngi. Sókó bakomákí mangó mǒ­kó mǒkó, nakanísí ’te mokili mobimba mokokoka té mpô ya kokwa búku eye.