Chapter 1
Acts | LinVB | 1:2 | kín’o mokolo atómbwámí o likoló. Libosó apésákí na ngúyá ya Elímo Sántu malako ma yě na bapóstolo baye yěméí aponókí. | |
Acts | LinVB | 1:3 | Nsima ya malózí ma yě amímónísí na bangó, na bilembo biíké alakísí bangó ’te azalákí na bomoi ; abimélí bangó mikolo ntúkú ínei, alobí na bangó mambí ma Bokonzi bwa Nzámbe. | |
Acts | LinVB | 1:4 | Mokolo mǒkó, ntángo azalákí kolía elongó na bangó, atíndí bangó ’te bálongwa o Yerúzalem té, kasi bázila ’te likambo liye Tatá alakélákí lísálema : « Boyókákí lyangó o monoko mwa ngáí : | |
Acts | LinVB | 1:5 | Yoáne azalákí kobátisa na mai, kasi bínó, nsima ya mwâ mikolo, bokokúla batísimo na Elímo Sántu. » | |
Acts | LinVB | 1:7 | Yézu azóngísí : « Koyéba ntángo mpé bilaká biye Tatá atíákí lokóla yě mǒkó alingí, etálí bínó té. | |
Acts | LinVB | 1:8 | Kasi bokozwa ngúyá ntángo Elímo Sántu akokitela bínó, bôngó bokozala banzénénéké ba ngáí o Yerúzalem, o Yudéa mobimba, o Samaría téé na nsuka ya mokili. » | |
Acts | LinVB | 1:9 | Esílísí Yézu koloba maloba maye, atómbwámí o likoló o míso ma bangó ; limpata lizipí yě, mpé bamóní yě lisúsu té. | |
Acts | LinVB | 1:10 | Ezalákí bangó naíno kotála o likoló epái Yézu azalákí kokende, tálá bato bábalé balátí bilambá mpémbé bayéí kotéleme penepene na bangó ; | |
Acts | LinVB | 1:11 | balobí : « Bato ba Galiléa, ntína níni botíkálí kotála o likoló boye ? Yézu óyo alongwámí na bínó mpé atómbwámí o likoló, akozónga bobélé bôngó, lokóla bomónókí yě abutí o likoló. » | |
Acts | LinVB | 1:12 | Na nsima bakití ngómbá ya Olíva, bazóngí o Yerúzalem ; ngómbá eye ezalí mosíká na Yerúzalem té, bobélé ntáká ya mobémbo bakokí kosála o mokolo mwa sábato. | |
Acts | LinVB | 1:13 | Ekómí bangó o engumbá, babutí o mokili mwa ndáko, esíká bameséní kofánda. Ezalákí wâná : Pétro, Yoáne, Yakóbo, Andréa, Filípo, Tomá, Barteleméo, Matéo, Yakóbo mwána wa Alféo, Simóni moto wa mpíla, na Yúda ndeko wa Yakóbo. | |
Acts | LinVB | 1:14 | Bánso motéma mǒkó bazalákí kosámbela elongó na básí basúsu, na María mamá wa Yézu mpé na bandeko ba Yézu. | |
Acts | LinVB | 1:15 | O mikolo mîná bandeko basangání, bazalákí sókí monkámá na ntúkú íbalé. Pétro atélémí o ntéi ya bangó, alobí : | |
Acts | LinVB | 1:16 | « Bandeko, eye ekomámí o Bikomá Bisántu esengélákí kosálema. Elímo Sántu asílí alobákí yangó na monoko mwa Davídi mpô ya Yudási, moto akambákí baye bakangákí Yézu. | |
Acts | LinVB | 1:18 | Asómbákí elanga na mosolo moye bafútákí yě mpô ya mabé asálákí ; akwéí motó o nsé, apaswání mpé misopó mya yě misopání. | |
Acts | LinVB | 1:19 | Bato bánso ba Yerúzalem bayébákí yangó, yangó wâná bakobéngaka elanga êná o lokóta la bangó ‘Akeldama’, lokóla ’te ‘Elanga ya makilá’. | |
Acts | LinVB | 1:20 | Ya sôló, ekomámí o búku ya Nzémbo : Mbóka ya yě ékóma mopotú, moto mǒkó áfánda kúná lisúsu té. Ekomámí mpé : Moto mosúsu ákamata mosálá mwa yě. | |
Acts | LinVB | 1:22 | út’o batísimo ya Yoáne téé mokolo Yézu atíkí bísó. Bôngó mǒkó wa bangó asengélí kozala nzénénéké wa nsékwa ya Yézu elongó na bísó. » | |
Acts | LinVB | 1:23 | Babimísí bato bábalé : Yozéfu, óyo bakobéngaka Bársaba, nkómbó ya yě esúsu Yústo, ná mpé Matiási. | |
Acts | LinVB | 1:24 | Mpé basámbélí losámbo loye : « Mokonzi, yǒ oyébí mitéma mya bato bánso, lakísá bísó náni yǒ oponí o ntéi ya bangó bábalé, | |
Acts | LinVB | 1:25 | ázwa mosálá mwa apóstolo, o esíká ya Yudási óyo atíkí mwangó mpô ya kokende o esíká ya yě. » | |
Chapter 2
Acts | LinVB | 2:2 | Na mbálákáká lokitó loútí o likoló lokóla mompepe makási, lotóndísí ndáko mobimba esíká bangó bafándí. | |
Acts | LinVB | 2:3 | Bamóní ndému ibimélí bangó lokóla miloli mya móto, ikabwání mpé ikitélí bangó mǒkó mǒkó o mitó. | |
Acts | LinVB | 2:4 | Bánso batóndí na Elímo Sántu, mpé babandí koloba nkóta isúsu, sé lokóla Elímo azalákí kolobisa bangó. | |
Acts | LinVB | 2:5 | Ezalákí o Yerúzalem ba-Yúda ba motéma molámu baútákí o bikólo bínso bya mokili mobimba. | |
Acts | LinVB | 2:6 | Eyókí bangó lokitó lonéne loye, bayéí kosangana ebelé o esíká êná, mpé babúlúngání, zambí moto na moto azalákí koyóka bangó o lokóta la yě. | |
Acts | LinVB | 2:7 | Bakámwí míngi mpenzá mpé batúnání : « Bato bazalí koloba wâná bazalí bangó bánso ba-Galiléa té ? | |
Acts | LinVB | 2:9 | Ba-Párti, ba-Médi, ba-Elami, bato ba Mezopotámia, ba Yudéa, ba Kapadósia, ba Pónto, ba Azía, | |
Acts | LinVB | 2:10 | ba-Frígia, ba-Pamfília, ba-Ezípeti mpé ba ekólo ya Líbya penepene na Siréne mpe bato ba Róma bafándí áwa, | |
Acts | LinVB | 2:11 | ba-Yúda na bampaya bakosámbelaka Nzámbe wa ba-Yúda, bato ba Kréta, ba-Arábu : bísó tozalí koyóka bangó bazalí kosakola makámwa ma Nzámbe o lokóta la biso ! » | |
Acts | LinVB | 2:12 | Bánso bakámwí míngi mpenzá, mayéle ma bangó matámbólí, balobání : « Likambo lyangó níni ? » | |
Acts | LinVB | 2:14 | Na nsima Pétro atélémí, yě na ba-zómi na mǒkó, mpé alobí na bangó na mongóngó makási : « Bato ba Yudéa mpé bínó bánso bofándí o Yerúzalem, bóyéba ntína ya likambo liye, bótía matói na maloba ma ngáí. | |
Acts | LinVB | 2:15 | Bato baye balángwí té lokóla bínó bokanísí ; mpámba té, tokómí sé na ngonga ya libwǎ. | |
Acts | LinVB | 2:17 | O mikolo mya nsúka nakokitisela bato bánso Elímo wa ngáí. Bána ba bínó, babáli na básí, bakosakola, bilengé ba bínó bakomóno mamóní, babangé ba bínó bakolóto ndóto. | |
Acts | LinVB | 2:19 | Nakosála makamwísi kúná o likoló, mpé nakolakisa bilembo áwa o nsé : makilá, móto na mílinga. | |
Acts | LinVB | 2:20 | Yambo ’te mokolo mwa Mokonzi mókóma, mokolo monéne mpé mwa nkémbo, mwésé mokobóngwana molílí mpé sánzá ekobóngwana makilá. | |
Acts | LinVB | 2:22 | Bato ba Israél, bóyóka maloba maye : Yézu wa Nazaréte, óyo Nzámbe atíndákí epái ya bínó asálákí makamwísi na bilembo na ngúyá ya Nzámbe o ntéi ya bínó, lokóla bínó mǒkó boyébí, | |
Acts | LinVB | 2:23 | bakabákí yě lokóla Nzámbe akánáká mpé ayébáká útá kala. Bínó bobomákí yě na mabóko ma bato babóyá Nzámbe, baye babákákí yě o kurúse. | |
Acts | LinVB | 2:24 | Kasi Nzámbe alongólí yě o mpási ya liwá, mpé asékwísí yě. Ekokákí kosálema té ’te liwá líkanga yě sékô, | |
Acts | LinVB | 2:25 | zambí Davídi alobákí mpô ya yě : Nazalákí komóno ntángo ínso Mokonzi libosó lya ngáí, zambí atélémí o lobóko la ngáí la mobáli mpô ’te náléngelénge té. | |
Acts | LinVB | 2:26 | Yangó wâná nayókí motéma esengo mpé nayémbí na nsáí ; mokolo nzóto ekowá, nakozala sé na elíkyá | |
Acts | LinVB | 2:27 | ’te okotíka molímo mwa ngáí o mbóka ya bawá té, mpé okolinga té ’te nzóto ya moto wa yǒ épolo. | |
Acts | LinVB | 2:29 | Bandeko, nayébí ’te nakokí koloba na bínó ’te nkóko wa bísó Davídi akúfákí mpé akundámákí ; lilíta lya yě lizalí o ntéi ya bísó téé leló. | |
Acts | LinVB | 2:30 | Kasi, áwa azalákí proféta, ayébákí ’te Nzámbe alayélí yě ndaí ’te mwána wa yě akokitana yě o ngwendé ya bokonzi ; | |
Acts | LinVB | 2:31 | amónókí maye makosálema nsima, bôngó asangélákí nsékwa ya Krístu na maloba maye : « Batíkí yě o mbóka ya bawá té, mpé nzóto ya yě epolí té. » | |
Acts | LinVB | 2:33 | Mpé áwa atómbwámí kín’o lobóko la mobáli la Nzámbe, Tatá apésí yě Elímo Sántu óyo alakélákí mpé akitísélí bísó, lokóla bozalí komóno mpé koyóka. | |
Acts | LinVB | 2:34 | Davídi abutákí o likoló té, kasi yě mǒkó alobákí : Mokonzi Nzámbe alobí na Mokonzi wa ngáí : Fándá o lobóko la ngáí la mobáli, | |
Acts | LinVB | 2:36 | Bôngó ba-Israél bánso báyéba sôlósôló ’te Yézu óyo bínó bobomákí o kurúse, Nzámbe akómísí yě Mokonzi mpé Krístu. » | |
Acts | LinVB | 2:37 | Maloba mâná mayókísí bangó mpási o mitéma, mpé balobí na Pétro mpé na bapóstolo basúsu : « Bandeko, tósála níni ? » | |
Acts | LinVB | 2:38 | Pétro ayanólí bangó : « Bóbóngola mitéma, mpé moto na moto ákúla batísimo o nkómbó ya Yézu Krístu mpô ’te ázwa bolímbisi masúmu, bôngó bokozwa likabo lya Elímo Sántu. | |
Acts | LinVB | 2:39 | Zambí Nzámbe alakélákí bínó ná bána ba bínó bôngó, ná mpé baye bánso bapanzání mosíká, baye Mokonzi Nzámbe wa bísó akobênga. » | |
Acts | LinVB | 2:40 | Na maloba masúsu maíké Pétro asakólí mpé aléndísí bangó mitéma, yě ’te : « Bóluka kobíka, bótíka baye babúngámí. » | |
Acts | LinVB | 2:41 | Bato baye bandimí maloba ma yě, bakúlí batísimo. O mokolo môná bato sókí nkóto ísáto bayíngélí o lisangá lya bayékoli. | |
Acts | LinVB | 2:42 | Banso bazalákí na moléndé o bolandi matéya ma bapóstolo, bazalákí kosangana, kobúka mámpa mpé kosámbela elongó. | |
Acts | LinVB | 2:43 | Nsómo ekangí mitéma mya bato bánso : bapóstolo bazalákí kosála makamwísi mpé kolakisa bilembo ebelé. | |
Acts | LinVB | 2:45 | bazalákí kotéke lopángo na bilóko bya bangó mpé kokabolela mǒkó mǒkó mosolo, engébéné na bokéleli bwa yě. | |
Acts | LinVB | 2:46 | Mokolo na mokolo, motéma sé mǒkó, bazalákí koyíngela o Témpelo, kobúka mámpa o ndáko ya bangó, mpé kolía na esengo mpé na motéma bosáwa. | |
Chapter 3
Acts | LinVB | 3:2 | Ezalákí wâná moto mǒkó akúfá makolo út’o mbótama ya yě ; mikolo mínso bato bazalákí koyâ kotíka yě penepene na ezibeli ya Témpelo eye bakobéngaka ‘Kitóko’, mpô ’te ásénge bato bazalákí kokóto wâná likabo. | |
Acts | LinVB | 3:6 | Kasi Pétro alobí : « Mosolo tǒ wólo ezalí na ngáí té, kasi nakopésa yǒ eye ezalí na ngáí : o nkómbó ya Yézu wa Nazaréte, támbólá ! » | |
Acts | LinVB | 3:7 | Asímbí yě na lobóko la mobáli mpé atélémísí yě. Sé o ntángo êná minkúwa mya makolo ma yě miléndí ; | |
Acts | LinVB | 3:8 | na mbala yǒ kó apimbwí, atélémí mpé abandí kotámbola ; ekótí yě o Témpelo elongó na bangó, azalákí kotámbola, kopimbwa mpé kokúmisa Nzámbe. | |
Acts | LinVB | 3:10 | bayébí ’te bobélé yě moto azalákí kosénge bato likabo ntángo afándákí penepene na ezibeli ‘Kitóko’ ya Témpelo ; bánso bakámwí míngi mpé babúlúngání mpô ya likambo likwêlákí yě. | |
Acts | LinVB | 3:11 | Awa moto ôná atíkí Pétro na Yoáne té, bato bánso bakámwí mpé bakeí mbángu epái ya bangó o mbalasáni eye bakobéngaka ‘ya Salomó’. | |
Acts | LinVB | 3:12 | Emóní Pétro bôngó, alobí na bato : « Bato ba Israél, mpô níni bozalí kokámwa na yangó ? Mpô níni bozalí kotála bísó lokóla ndé bísó bato totámbwísí moto óyo na ngúyá ya bísó mǒkó tǒ mpô ya losámbo la bísó ? | |
Acts | LinVB | 3:13 | Nzámbe wa Abaráma, wa Izáka mpé wa Yakób, Nzámbe wa bankóko ba bísó akúmísí mosáleli wa yě Yézu. Bínó bokabákí yě o mabóko ma bakonzi, mpé bowángánákí yě o míso ma Piláto óyo alingákí kotíka yě. | |
Acts | LinVB | 3:14 | Bínó bobóyákí moto wa bosántu mpé wa bosémbo ; boséngékí ’te bábimisa mobomi o bolóko, | |
Acts | LinVB | 3:15 | mpé bobomísákí Mokonzi wa bomoi. Nzókandé Nzámbe asékwísí yě o bawá ; bísó bazenénéke. | |
Acts | LinVB | 3:16 | Mpô ya boyambi nkómbó ya yě, Yézu méí abíkísí moto óyo bínó bomóní mpé boyébí. Boyambi nkómbó ya Yézu bozóngísélí moto óyo bokási, mpé bokómísí yě lisúsu nzóto kólóngónú o míso ma bínó bánso. | |
Acts | LinVB | 3:17 | Sôló, bandeko, nayébí ’te bosálákí bôngó mpô boyébákí té, bakonzi ba bínó mpé lokola. | |
Acts | LinVB | 3:18 | Kasi Nzámbe akokísí bôngó maye asakóláká na monoko mwa baproféta bánso ’te Krístu wa yě akoyóka mpási. | |
Acts | LinVB | 3:20 | mpô ’te ntángó akokokisa eleko ya libíkí, Mokonzi átínda Krístu, Yézu óyo yě alingákí kotínda mpô ya bínó út’o kala. | |
Acts | LinVB | 3:21 | Sikáwa afándí o likoló kín’o mokolo akobongisa bínso, lokóla Nzámbe asakóláká na monoko mwa baproféta ba yě basántu út’o ebandela. | |
Acts | LinVB | 3:22 | Libosó Móze alobáká : ‘Mokonzi Nzámbe akobimisa o káti ya bandeko ba bínó proféta mǒkó lokóla ngáí. Bóyóka maye mánso akoyébisa bínó. | |
Acts | LinVB | 3:24 | Na nsima baproféta bánso balobákí bandá Samuél ná mpé baye bayákí nsima ya yě, basakólákí makambo makosálema o mikolo miye. | |
Acts | LinVB | 3:25 | Bínó bozalí bána ba baproféta mpé bána ba bankóko baye Nzámbe akátáká na bangó bondeko, ntángo alobáká na Abaráma : Mpô ya bána ba yǒ, mabótá mánso ma nsé makozwa bobenisi. | |
Chapter 4
Acts | LinVB | 4:1 | Ezalákí bangó naíno koloba na bato, banganga Nzámbe bayéí elongó na mokonzi wa bakéngeli ba Témpelo mpé na ba-Saduséo. | |
Acts | LinVB | 4:2 | Bayókí mabé na bomóni ’te bangó bábalé bazalákí kotéya bato mpé kosakola ’te bato bakosékwa mpô ya nsékwa ya Krístu. | |
Acts | LinVB | 4:4 | Nzókandé bato baíké bayókákí matéya ma Pétro bakómí koyamba, bôngó motángo mwa bayambi, kotánga bobélé babáli, mokómí sókí nkóto ítáno. | |
Acts | LinVB | 4:5 | Etání ntóngó, bakonzi ba ba-Yúda, bakóló na batéyi ba Minkandá basangání likita o Yerúzalem. | |
Acts | LinVB | 4:6 | Ezalákí wâná : nganga mokonzi Ana, Káifa, Yónatan, Alesándro na bato bánso ba mabótá ma banganga Nzámbe. | |
Acts | LinVB | 4:7 | Batélémísí bapóstolo o ntéi ya bato mpé batúní bangó : « Bosálí yangó na ngúyá níni mpé o nkómbó ya náni ? » | |
Acts | LinVB | 4:9 | áwa botúní bísó leló mpô ya bolámu tosálí moto akúfákí makolo, mpé ndéngé níni moto óyo abíkí, | |
Acts | LinVB | 4:10 | bóyéba malámu, bínó bánso ná bato bánso ba Israél : moto óyo atélémí o bosó bwa bínó nzóto kólóngónú mpô ya nkómbó ya Yézu Krístu wa Nazaréte, óyo bínó bobákákí o kurúse ; kasi Nzámbe asékwísí yě o bawá. | |
Acts | LinVB | 4:11 | Yě azalí libángá bínó batóngi bobwákákí, likómí libángámamá likokúmba ndáko mobimba. | |
Acts | LinVB | 4:12 | Bato bakokí kobíka mpô ya moto mosúsu té, zambí o nsé mobimba Nzámbe apésí bato nkómbó ya moto mosúsu té mpô tóbíka na yangó. » | |
Acts | LinVB | 4:13 | Bato bánso ba Likita linéne bakámwí míngi áwa bamóní moléndé mwa Pétro na Yoáne, mpô bayébí ’te bayékólá míngi té. Bayébí mpé ’te bangó bazalákí na Yézu elongó ; | |
Acts | LinVB | 4:14 | áwa bamóní mpé moto óyo abíkí atélémí penepene na bangó, bakokí kozóngisa liloba lyǒ kó té. | |
Acts | LinVB | 4:16 | Balobí : « Tósála níni na bangó ? Bato bánso ba Yerúzalem bayébí malámu ’te bangó basálí likamwísi, bísó tokokí kowángana yangó té. | |
Acts | LinVB | 4:17 | Kasi mpô ’te nsango êná épalangana lisúsu o ntéi ya bato té, tókánela bangó mpô ’te bátíka kotángela atâ náni nkómbó êná. » | |
Acts | LinVB | 4:18 | Bôngó babéngí bangó lisúsu mpé bapekísí bangó koloba tǒ kotéya lisúsu o nkómbó ya Yézu. | |
Acts | LinVB | 4:19 | Kasi Pétro na Yoáne bazóngísélí bangó : « Bokanísí níni : Nzámbe akokí ndé kondima ’te tótósa bínó, bôngô tótósa Yě té ? | |
Acts | LinVB | 4:21 | Bakánélí bangó lisúsu, nzókandé batíkí bangó ; bamóní té bóníbóní bakokí kopésa bangó etúmbu, zambí bato bánso bazalákí kokúmisa Nzámbe mpô ya maye masálémákí. | |
Acts | LinVB | 4:23 | Awa batíkí bangó, Pétro na Yoáne bakeí epái ya bato ba bangó ; bayébísí bangó mánso banganga bakonzi na bakóló balobákí na bangó. | |
Acts | LinVB | 4:24 | Eyókí bangó bôngó, bánso motéma mǒkó babandí kokúmisa Nzámbe, bangó ’te : « Mokonzi, yǒ moto okelákí likoló na nsé, mbú na bínso bizalí wâná ; | |
Acts | LinVB | 4:25 | yǒ moto olobákí na ngúyá ya Elímo Sántu, na monoko mwa nkóko wa bísó Davídi, mosáleli wa yǒ : Mpô níni bampaya bazalí kolémwa ? Mpô níni bato ba bikólo bisúsu bazalí kokána makambo mazángí ntína ? | |
Acts | LinVB | 4:26 | Bakonzi ba nsé basílí bamíléngélí na etumba, mpé bayángeli bayókání ’te bakobóya bokonzi bwa Nzámbe mpé bwa óyo apakólí yě mafúta. | |
Acts | LinVB | 4:27 | Ya sôló, Eróde na Pónsio Piláto basangánákí o engumbá eye, elongó na bato ba bikólo bya bapagáno mpé na bato ba Israél, mpô ’te bábóya mosáleli wa yǒ mosántu, Yézu óyo opakólí yě mafúta. | |
Acts | LinVB | 4:29 | Sikáwa, Mokonzi, tálá bóníbóní bazalí kokánela bísó, mpé léndísá basáleli ba yǒ mpô ’te básakola maloba ma yǒ na mpíkó ; | |
Acts | LinVB | 4:30 | tandá lobóko la yǒ mpô ya kobíkisa bato ba bokono, lakísá bilembo mpé sálá makamwísi na nkómbó ya mosáleli wa yǒ mosántu, Yézu. » | |
Acts | LinVB | 4:31 | Ezalákí bangó kosámbela bôngó, ndáko esíká basangání ebandí koningana ; bánso batóndí na Elímo Sántu mpé babandí kosakola liloba lya Nzámbe na mpíkó. | |
Acts | LinVB | 4:32 | Bato ebelé bakómí koyamba ; bánso bazalákí motéma sé mǒkó, mayéle sé mǒkó ; moto mǒkó té azalákí kobómba bilóko bízala sé bya yě mǒkó, bilóko bínso bizalákí bya bato bánso. | |
Acts | LinVB | 4:33 | Na ngúyá enéne bapóstolo bazalákí kosakola nsékwa ya Mokonzi Yézu, mpé ngrásya ya yě enéne ezalákí na bangó bánso. | |
Acts | LinVB | 4:34 | O ntéi ya bangó atâ moto mǒkó té azalákí kokélela ; mpô baye bánso bazalákí na mabelé mpé na ndáko batékí yangó, bayéí na mosolo mwa botéki, | |
Acts | LinVB | 4:35 | mpé batíkí mwangó o mabóko ma bapóstolo. Na nsima bakabólélí mǒkó mǒkó mosolo, engébéné na bokéleli bwa yě. | |
Acts | LinVB | 4:36 | Yozéfu mpé, óyo bapóstolo bazalákí mpé kotánga Bárnaba (lokóla ’te ‘Mwána wa libóndí’), yě mo-Lévi abótámákí o esanga Sípro, | |
Chapter 5
Acts | LinVB | 5:1 | Moto mǒkó nkómbó ’te Ananía, ayókánákí na mwásí wa yě Safíra, mpé batékí eténi ya mabelé ma bangó. | |
Acts | LinVB | 5:2 | Ananía abómbí ndámbo ya mosolo môná, mwásí wa yě mpé ayébí yangó, mpé ayéí kotíka ndámbo esúsu epái ya bapóstolo. | |
Acts | LinVB | 5:3 | Pétro alobí na yě : « Ananía, mpô níni Sátana apésí yǒ mayéle ma kokósa Elímo Sántu mpé ma kobómba ndámbo ya mosolo mwa botéki elanga ? | |
Acts | LinVB | 5:4 | Osengélákí kotéke elanga ya yǒ té. Atâ olingákí kotéke yangó, okokákí kotíkala na mosolo mwa botéki. Bôngó mpô níni okánákí kosála bôngó ? Okósí bato té, kasi okósí Nzámbe. » | |
Acts | LinVB | 5:5 | Eyókí Ananía maloba mâná, akwéí mpé akátí motéma. Nsómo enéne ekwêlí bato bánso bayókí yangó. | |
Acts | LinVB | 5:8 | Pétro atúní yě : « Yébísá ngáí, botékékí elanga ya bínó na motúya moye té ? » Yě azóngísí : « Iyo, na motúya môná. » | |
Acts | LinVB | 5:9 | Pétro alobí na yě : « Ntína níni boyókánákí ’te bokomeka Elímo wa Mokonzi boye ? Tálá, bato bakundí mobáli wa yǒ bakómí penepene na ndáko ; bakomeme yǒ lokóla. » | |
Acts | LinVB | 5:10 | Sé o ntángo êná akwéí pene na makolo ma Pétro mpé akátí motéma. Bilengé babáli bakótí, bakútí mwásí asílí akátí motéma, bamemí yě mpé bakundí yě esíká yǒ kó na mobáli wa yě. | |
Acts | LinVB | 5:12 | O ntéi ya bato makamwísi míngi masálémí na mabóko ma bapóstolo. Baye bánso bayambí bazalákí kosangana motéma mǒkó o mbalasáni ya Salomó. | |
Acts | LinVB | 5:13 | Moto mosúsu amekí kosangana na bangó té, nzókandé bato bánso bazalákí kokúmisa bangó. | |
Acts | LinVB | 5:14 | Baye bayambí bakómí míngi mpenzá ; babáli na básí baíké bayíngélí o lingómbá lya Mokonzi. | |
Acts | LinVB | 5:15 | Bayéí mpé kotíka bato ba bokono o balabála ; balálísí bangó o mbéto mpé o kitikwálá, na elíkyá ’te, ntángo Pétro akoleka, elílíngí ya yě éleka atâ likoló lya mǒkó wa bangó. | |
Acts | LinVB | 5:16 | Bato baíké bazalákí koúta o bingumbá penepene na Yerúzalem, bayéí na bato ba bokono tǒ baye bazalákí na bilímo mbindo, mpé bangó bánso babíkí. | |
Acts | LinVB | 5:17 | Kasi nganga mokonzi na bato ba yě (bangó bánso bazalákí bato ba lingómbá lya ba-Saduséo), batóndí na zúwa. | |
Acts | LinVB | 5:19 | Kasi na butú Anzelú wa Mokonzi afungólí bizibeli bya bolóko, akeí kotíka bangó o libándá, mpé alobí : | |
Acts | LinVB | 5:21 | Batósí maloba mâná, bakótí o Témpelo na ntá ntóngó mpé babandí kotéya. Bapóstolo o bosó bwa Likita linéne O ntángo êná Nganga mokonzi ayéí na bato ba yě ; babéngí Likita linéne mpé lisangá lya bakóló ba Israél mpô ’te básangana likita ; batíndí bato bákende kokamata bapóstolo bakangémí o bolóko. | |
Acts | LinVB | 5:22 | Bakéngeli bakómí kúná, kasi bakútí bapóstolo o bolóko té. Bazóngí mpé bayébísí bakonzi : | |
Acts | LinVB | 5:23 | « Tomóní ’te bolóko ekangémí malámu, bakéngeli batélémí penepene na bizibeli bya bolóko ; kasi ntángo tofungólí byangó tokútí moto mǒkó o káti té. » | |
Acts | LinVB | 5:24 | Awa mokonzi wa bakéngeli ba Témpelo na banganga bakonzi bayókí yangó, bakómí mitéma likoló mpé bamítúní ntína ya likambo liye. | |
Acts | LinVB | 5:25 | Kasi moto mǒkó ayéí koyébisa bangó : « Bato bínó bokangákí o bolóko, bazalí o Témpelo, bazalí kotéya bato. » | |
Acts | LinVB | 5:26 | Bôngó mokonzi wa bakéngeli ba Témpelo na bato ba yě bakeí mpé bakangí bapóstolo, kasi na makási té, zambí babángí ’te bato bábwákela bangó mǒkó mabángá. | |
Acts | LinVB | 5:28 | « Topekísákí bínó makási kotéya o nkómbó ya moto ôná. Nzókandé bopanzí matéya ma bínó o Yerúzalem mobimba ! Bôngó bolingí ’te makilá ma moto ôná mákwêla bísó ? » | |
Acts | LinVB | 5:31 | Nzámbe atómbólí yě kín’o lobóko la yě la mobáli, akómísí yě Mokonzi mpé Mobíkisi mpô ’te ba-Israél bábóngola mitéma mpé bázwa bolímbisi masúmu. | |
Acts | LinVB | 5:32 | Bísó tozalí banzénénéké ba makambo maye, bísó na Elímo Sántu, óyo Nzámbe akabélí baye bakotósaka yě. » | |
Acts | LinVB | 5:34 | Sé o ntángo êná mo-Farizéo mǒkó atélémí o ntéi ya bato ba Likita linéne, nkómbó ya yě Gamáliel ; yě motéyi monéne wa Mobéko, mpé moto wa lokúmu o míso ma bato bánso. Atíndí ’te bábimisa bapóstolo mwâ moké. | |
Acts | LinVB | 5:35 | Na nsima alobí na bato ba Likita linéne : « Bato ba Israél, bókéba na likambo bolingí kosála na bato baye. | |
Acts | LinVB | 5:36 | Elekí mwâ mikolo Téda abimákí ; yě amíyébísákí lokóla moto monéne ; bato sókí nkámá ínei balandákí yě. Ntango babomí yě, baye balandákí yě bapanzání, mpé lingómbá lya bangó likúfí. | |
Acts | LinVB | 5:37 | Nsima ya yě, o eleko batángákí bato bánso, Yudási wa Galiléa abimákí, abéndákí bato baíké. Yě mpé awéí mpé bato balandákí yě bapanzání. | |
Acts | LinVB | 5:38 | Bôngó sikáwa, nayébísí bínó : bópangana na bato baye té, bótíka bangó. Zambí sókó mokáno tǒ mosálá mwa bangó moútí na bato, mokobéba sé bobébi ; | |
Acts | LinVB | 5:39 | kasi sókó moútí sôló epái ya Nzámbe, bokokoka koboma mwangó té ; mbele bokobunda etumba na Nzámbeméí. » Bánso bandimí maloba ma yě. | |
Acts | LinVB | 5:40 | Babéngí bapóstolo lisúsu, babétísí bangó fímbo mpé bapekísí bangó koloba lisúsu o nkómbó ya Yézu ; na nsima batíkí bangó. | |
Acts | LinVB | 5:41 | Bapóstolo babimí o Likita linéne, batóndí na esengo, zambí Mokonzi amónókí ’te balongóbání konyókwama mpô ya Nkómbó ya yě. | |
Chapter 6
Acts | LinVB | 6:1 | O mikolo mîná bayékoli bakómí míngi ; bato bakolobaka lokóta la ba-Gréki bakómí konunganunga na bato bakolobaka lokóta la ba-Ebréi, zambí ntángo bazalákí kokabolela bato bilóko mokolo na mokolo, bazalákí kopésa básí bazéngé ba bangó elóko té. | |
Acts | LinVB | 6:2 | Bôngó ba-zómi na bábalé babéngí bayékoli bánso mpé balobí na bangó : « Ebongí té ’te bísó tótíka kosakola liloba lya Nzámbe mpô ya kosálela bato o méza. | |
Acts | LinVB | 6:3 | Bôngó, bandeko, bóluka o ntéi ya bínó, babáli nsambo bazalí na ezalela elámu, batóndí na Elímo Sántu mpé na bwányá, tópésa bangó mosálá môná. | |
Acts | LinVB | 6:5 | Bánso bandimí maloba mâná, mpé baponí Stéfano, moto wa boyambi bonéne atóndí na Elímo Sántu, Filípo, Prokóro, Nikánor, Tímo, Parména mpé Nikolá, moto wa Antiókia óyo akómákí mo-Yúda. | |
Acts | LinVB | 6:7 | Liloba lya Nzámbe lizalákí kopalangana, bayékoli bakómí baíké mpenzá o Yerúzalem, mpé banganga Nzámbe míngi bakómí koyamba lokóla. | |
Acts | LinVB | 6:8 | Stéfano atóndí na ngrásya mpé na ngúyá, azalákí kosála mambí manéne mpé makamwísi o ntéi ya bato. | |
Acts | LinVB | 6:9 | O ntángo êná bato basúsu ba sinagóga ya ‘Bansómí’, bato ba Siréne, ba Alesándria, ba Silísia mpé ba Azía bayéí kowéla ntembe na Stéfano ; | |
Acts | LinVB | 6:10 | kasi bangó bakokákí yě té, zambí alekí bangó na bwányá mpé azalákí koloba na ngúyá ya Elímo. | |
Acts | LinVB | 6:11 | Bôngó bafútí bato basúsu báloba ’te : « Bísó toyókákí ’te azalí kotúka Móze ná Nzámbe lokóla. » | |
Acts | LinVB | 6:12 | Basálí bôngó mpô ’te bato bánso, ná bakóló ná batéyi ba Minkandá, bátomboko ; bayéí kobimela Stéfano na mbálákáká, bakangí yě mpé bakambí yě o Likita linéne. | |
Acts | LinVB | 6:13 | Kúná babimísí banzénénéké ba lokutá ; bangó balobí : « Na maloba ma yě moto óyo azalí kobébisa lokúmu la Esíká esántu eye mpé la Mobéko. | |
Acts | LinVB | 6:14 | Toyókákí yě azalákí koloba ’te Yézu óyo wa Nazaréte akoboma Esíká eye, mpé akobóngola mibéko Móze atíkélákí bísó. » | |
Chapter 7
Acts | LinVB | 7:2 | Stéfano azóngísí : « Bandeko, batatá, bóyóka. Nzá-mbe wa nkémbo abimélákí nkóko wa bísó Abaráma o Mezopotámia, libosó ’te ákende kofánda o Aran ; | |
Acts | LinVB | 7:4 | Bôngó Abaráma atíkí mokili mwa Kaldéa mpé akeí kofánda o Aran. Ekúfí tatá wa yě, Nzámbe alongólí yě kúná mpé afándísí yě o mokili moye bínó bokofándaka leló. | |
Acts | LinVB | 7:5 | Naíno akabélí yě mabelé ma yě mǒkó té, atâ esíká ya kotía makolo té ; kasi alakélí yě ’te akopésa yě ná mpé libótá lya yě nsima mokili moye, atâ abótákí naíno té. | |
Acts | LinVB | 7:6 | Nzámbe ayébísí yě ’te bána ba yě bakofánda o mokili mosúsu, baútá bakokómisa bangó baómbo ba bangó mpé bakonyókolo bangó mibú nkámá ínei. | |
Acts | LinVB | 7:7 | Nzámbe alobí lisúsu : Kasi ngáí nakosámbisa bato ba ekólo êná baye bakómísí bangó baómbo. Na nsima bakolongwa kúná mpé bakosámbela ngáí o esíká eye. | |
Acts | LinVB | 7:8 | Mpé Nzámbe apésí yě bondeko na bokáti nzóto ; bôngó ntángo abótí Izáka, akátísí yě nzóto nsima ya mikolo mwambi. Mpé Izáka asálí sé bôngó na Yakób ; Yakób mpé asálí bôngó na bankóko zómi na bábalé. | |
Acts | LinVB | 7:9 | Bankóko baye bayókélí Yozéfu zúwa, batékí yě mpô ’te bákamba yě o Ezípeti. Kasi Nzámbe abátélí yě : | |
Acts | LinVB | 7:10 | alongólí yě o minyóko mínso, asálí ’te Yozéfu ámónono moto malámu mpé wa bwányá o míso ma Fárao, mokonzi wa Ezípeti ; bôngó Fárao alubólí yě moyángeli o Ezípeti mpé o ndáko ya yě mobimba. | |
Acts | LinVB | 7:11 | Na nsima nzala enéne eyéí kongala o Ezípeti mpé o Kanána, bato bánso bayókí mpási míngi mpé bankóko ba bísó bazwí lisúsu bilóko bya kolía té. | |
Acts | LinVB | 7:12 | Eyókí Yakób ’te bilóko bya kolía bizalákí o Ezípeti, atíndí bankóko ba bísó mbala ya yambo. | |
Acts | LinVB | 7:13 | Mbala ya íbalé Yozéfu amíyébísí na bandeko ba yě, mpé bôngó Fárao akómí koyéba ekólo ya yě. | |
Acts | LinVB | 7:14 | Na nsima Yozéfu atíndí ’te bákende kokamata tatá wa yě Yakób na bandeko ba yě bánso ; bazalákí bato ntúkú nsambo na bátáno. | |
Acts | LinVB | 7:16 | Bakeí na bibembe bya bangó o Síkem mpé bakundí bangó o lilíta liye Abaráma asómbáká na mosolo o mabóko ma bána ba Amor o Síkem. | |
Acts | LinVB | 7:17 | Awa eleko ebelémí ’te Nzámbe ákokisa elakó alakélákí Abaráma, bato bakómí míngi o Ezípeti, | |
Acts | LinVB | 7:19 | Na mayéle mabé anyókólí bato ba bísó, ayókísí bangó mpási, mpé atíndí bangó ’te bálongola bána ba bangó babótámí sika, bôngó bátíkala na bomoi té. | |
Acts | LinVB | 7:20 | O mikolo mîná Móze abótámí, azalákí mwána kitóko o míso ma Nzámbe. Baléísí yě sánzá ísáto o ndáko ya tatá wa yě ; | |
Acts | LinVB | 7:21 | ntángo bakeí kotíka yě, mwána mwásí wa Fárao alokótí yě mpé abókólí yě lokóla mwána wa yě mǒkó. | |
Acts | LinVB | 7:22 | Balakísí Móze mambí ma bwányá ma ba-Ezípeti : akómí koloba malámu mpé koyéba misálá ndéngé na ndéngé. | |
Acts | LinVB | 7:24 | Awa amóní ’te bazalákí konyókolo mǒkó wa bangó, abátélí yě, azóngísélí mo-Ezípeti mabé ma yě mpé abomí yě. | |
Acts | LinVB | 7:25 | Akanísí ’te bandeko ba yě bakoyéba ’te Nzámbe alingí kobíkisa bangó na mabóko ma yě ; kasi bayébí yangó té. | |
Acts | LinVB | 7:26 | Mokolo mwa nsima amóní bandeko basúsu bazalákí kobunda, mpé amekí kozóngisa boyókani o káti ya bangó. Alobí na bangó : « Báníngá ba ngáí, bozalí bandeko : bóníbóní bozalí koyókisana mpási boye ? » | |
Acts | LinVB | 7:27 | Kasi moto azalákí konyókolo móníngá abóyí koyóka yě, alobí : « Náni atíí yǒ mokonzi tǒ zúzi wa bísó bábalé ? | |
Acts | LinVB | 7:29 | Eyókí Móze maloba mâná, akímí mpé akeí kobómbama o mokili mwa Madian ; kúná abótí bána bábalé. | |
Acts | LinVB | 7:30 | Nsima ya mibú ntúkú ínei ǎnzelú abimélí yě o elíkí ya ngómbá Sinai, abimélí yě o mololi mwa nzeté epelí móto. | |
Acts | LinVB | 7:31 | Móze akámwí na bomóni likambo liye. Awa abelémí mpô ’te ámóno malámu, ayókí loláká la Mokonzi : | |
Acts | LinVB | 7:32 | Ngáí nazalí Nzámbe wa bankóko ba yǒ, Nzámbe wa Abaráma, wa Izáka mpé wa Yakób. Móze abandí kolénge mpé abángí kotála. | |
Acts | LinVB | 7:33 | O ntángo êná Mokonzi alobí na yě : Longólá mapápa o makolo, zambí esíká otélémí ezalí esíká esántu. | |
Acts | LinVB | 7:34 | Sôló, namóní mpási ya bato ba ngáí o Ezípeti, nayókí bokímeli bwa bangó, mpé nakití mpô ya kobíkisa bangó. Bôngó yáká, nátínda yǒ o Ezípeti. | |
Acts | LinVB | 7:35 | Móze óyo babóyákí áwa balobákí : « Náni atíí yǒ mokonzi mpé zúzi ? » tálá Nzámbe atíndélí bangó yě ázala mokonzi mpé mobíkisi na bolobeli bwa ǎnzelú óyo abimélákí yě o nzeté. | |
Acts | LinVB | 7:36 | Yě moto abimísí bangó o mokili mwa Ezípeti, asálí makamwísi mpé alakísí bilembo o mokili môná, o Mbú Etáne mpé o elíkí, mibú ntúkú ínei. | |
Acts | LinVB | 7:37 | Bobélé yě Móze alobí na ba-Israél : « O ntéi ya bandeko ba bínó, Nzámbe akobimisela bínó proféta mǒkó lokóla ngáí. » | |
Acts | LinVB | 7:38 | O lisangá linéne o elíkí yě mpé azalákí molobeli káti ya ǎnzelú óyo asolólí na yě o ngómbá Sinai, mpé ya bankóko ba bísó ; yě moto azwí maloba ma bomoi mpô ’te áyébisa bísó mangó. | |
Acts | LinVB | 7:39 | Kasi moto óyo bankóko ba bísó balingákí kotósa té, babóyí yě mpé bakómí kokanisa kozónga o Ezípeti. | |
Acts | LinVB | 7:40 | Balobí na Arone : « Salélá bísó banzámbe bakokí kotámbola o bosó bwa bísó, mpô Móze óyo abimísí bísó o mokili mwa Ezípeti, toyébí té sókó likambo níni likwêlí yě. » | |
Acts | LinVB | 7:41 | Basálí ekeko ya ngómbé o mikolo mîná mpé babonzélí yangó libonza ; basepélí na elóko eye basálí na mabóko ma bangó mǒkó. | |
Acts | LinVB | 7:42 | Mpé Nzámbe abóyí kotála bangó, atíkí bangó bákúmisa minzóto mya likoló, lokóla ekomámí o búku ya baproféta : Bato ba Israél, o mibú ntúkú ínei bozalákí o elíkí bobonzélákí ngáí ndé mibómá na mabonza ? | |
Acts | LinVB | 7:43 | Bomemékí éma ya Molók o mapeke, ná mpé monzóto mwa nzá-mbe Refán, bikeko biye bosálákí mpô ya kokúmbamela byangó ; yangó wâná nakokamba bínó mosíká, leká Babilóne. | |
Acts | LinVB | 7:44 | O elíkí bankóko ba bísó bazalákí na Ema ya Bondeko. Oyo alobákí na Móze, atíndákí yě ásála yangó lokóla balakísákí yě. | |
Acts | LinVB | 7:45 | Bankóko ba bísó bazwí yangó, mpé ntángo Yózue azalákí kokamba bangó, bayíngísí yangó o mokili babótólí o mabóko ma bikólo bisúsu, biye Nzámbe abengánákí o míso ma bangó. Bôngó etíkálákí kúná téé ntángo ya Davídi. | |
Acts | LinVB | 7:46 | Yě moto wa bolingo wa Nzámbe aséngí ndingisa ’te átóngela Nzámbe wa Yakób esíká ya kofánda. | |
Acts | LinVB | 7:48 | Kasi Nzámbe wa Ntá-Likoló akofándaka o ndáko té, iye itóngámí na mabóko ma bato, lokóla proféta alobákí : | |
Acts | LinVB | 7:49 | Likoló lizalí ngwendé ya ngáí, mpé mokili mozalí ebóngá ya makólo ma ngáí. Mokonzi alobí : Ndáko níni bokotóngela ngáí ? Wápi esíká nakopéma ? | |
Acts | LinVB | 7:51 | Bínó, bozalí bato ba motó makási, bokoyókaka mpé bokokanisaka lokóla bato bayébí Nzámbe té ; bokobóyaka Elímo Sántu, sé lokóla bankóko ba bínó ! | |
Acts | LinVB | 7:52 | Proféta náni bankóko ba bínó banyókólókó té ? Babomáká bato bazalákí kosakola boyéi bwa Moto wa bosémbo, bobélé óyo bínó botékékí mpé bobomákí sikáwa. | |
Acts | LinVB | 7:55 | Kasi yě atóndí na Elímo Sántu, atálí epái ya likoló mpé amóní nkémbo ya Nzá-mbe, ná mpé Yézu atélémí o lobóko la mobáli la Nzámbe. | |
Acts | LinVB | 7:56 | Alobí : « A ! Namóní likoló lifungwámí mpé Mwána wa Moto atélémí o lobóko la mobáli la Nzámbe. » | |
Acts | LinVB | 7:58 | Babéndí yě o libándá lya engumbá mpé babandí kobwákela yě mabángá. Banzénénéké batíákí bilambá bya bangó o bosó bwa elengé mobáli mǒkó nkómbó ’te Saul. | |
Acts | LinVB | 7:59 | Ntángo bazalákí kobwákela yě mabángá, Stéfano asámbélí boye : « Mokonzi Yézu, yambá molímo mwa ngáí. » | |
Chapter 8
Acts | LinVB | 8:1 | Saul mpe andimí bôngó ’te báboma Stéfano. Ut’o mokolo môná babandí konyókolo Eklézya ya Yerúzalem míngi mpenzá. Bayékoli bánso bapalángání o mokili mwa Yudéa mpé mwa Samaría ; bobélé bapóstolo batíkálí o Yerúzalem. | |
Acts | LinVB | 8:3 | Kasi Saul asálí makási mpô ya koboma Eklézya ; azalákí kokóto na makási o ndáko yǒ kó yǒ kó, kokanga babáli na básí mpé kobwáka bangó o bolóko. | |
Acts | LinVB | 8:6 | Bato ebelé bayókí mpé bamóní makamwísi Filípo azalákí kosála, bangó bánso motéma mǒkó bandimí matéya ma yě. | |
Acts | LinVB | 8:7 | Bato baíké bakangémákí na zábolo : bilímo mbindo biíké bibimí o nzóto ya bangó sé na bogángi makási. Bato bakúfá makolo ná mpé baténgoli baíké babíkí. | |
Acts | LinVB | 8:9 | Ut’o kala moto mǒkó nkómbó ’te Simóni azalákí o engumbá êná ; na misálá mya yě mya nganga azalákí kokámwisa bato ba Samaría ; azalákí komítánga moto monéne. | |
Acts | LinVB | 8:10 | Bato bánso, bato baké ná bato banéne, bazalákí kondima yě, balobí : « Moto óyo azalí na Ngúyá ya Nzámbe, eye bakotángaka Ntá-Bokási. » | |
Acts | LinVB | 8:12 | Kasi ntángo bayambí Nsango Elámu ya Bokonzi bwa Nzámbe, eye Filípo asangélí bangó, ná mpé Nkómbó ya Yézu Krístu, bánso, babáli na básí, bakúlí batísimo. | |
Acts | LinVB | 8:13 | Simóni mpé ayambí mpé akúlí batísimo ; atíkí Filípo lisúsu té, mpé akámwí míngi na bomóni bilembo na makamwísi manéne Filípo azalákí kosála. | |
Acts | LinVB | 8:14 | Eyókí bapóstolo, baye bazalákí o Yerúzalem, ’te bato ba Samaría bayambí maloba ma Nzámbe, batíndélí bangó Pétro na Yoáne. | |
Acts | LinVB | 8:16 | zambí Elímo akitélákí naíno atâ mǒkó wa bangó té ; bakúlákí bobélé batísimo o nkómbó ya Mokonzi Yézu. | |
Acts | LinVB | 8:18 | Emóní Simóni ’te Elímo Sántu akitélí bato baye bapóstolo batíélí bangó mabóko, ayéí kobonzela bangó mosolo, | |
Acts | LinVB | 8:19 | alobí : « Bópésa ngáí mpé ngúyá êná, bôngó moto óyo nakotíela yě mabóko ákúla Elímo Sántu. » | |
Acts | LinVB | 8:20 | Kasi Pétro azóngísélí yě : « Mabé mákwêla yǒ ná mpé mosolo mwa yǒ, mpámba té, okanísí ’te okokí kosómba likabo lya Nzámbe na mosolo ! | |
Acts | LinVB | 8:21 | Okokí kozala motéyi lokóla bísó té, atâ moké té, zambí motéma mwa yǒ mobongí té o míso ma Nzámbe. | |
Acts | LinVB | 8:22 | Longólá makanisi maye mabé o motéma mpé bóndélá Mokonzi ; mbele akolímbisa yǒ makanisi mâná, | |
Acts | LinVB | 8:23 | mpô namóní ’te motéma mwa yǒ motóndí na bólolo mpé makanisi ma yǒ mazángí bosémbo. » | |
Acts | LinVB | 8:24 | Simóni ayanólí : « Bínó bósámbela Mokonzi mpô ya ngáí mpô ’te makambo maye bínó bolobí mákwêla ngáí té. » | |
Acts | LinVB | 8:25 | Ntángo bapóstolo basílísí kotéya na bosakoli Liloba lya Mokonzi, bazóngí o Yerúzalem mpé basangélí Nsango Elámu o mbóka míngi ya Samaría. | |
Acts | LinVB | 8:26 | Anzelú wa Mokonzi alobí na Filípo : « Télémé mpé kendé epái ya Súdi, landá nzelá ya esóbé ekolongwaka o Yerúzalem téé Gáza. » | |
Acts | LinVB | 8:27 | Filípo atélémí mpé akeí. Mpé tálá, eníki mǒkó, moto wa Etiópia, moto wa lokúmu mpé moyángeli wa bilóko bínso bya Kandáke, mokonzi mwásí wa Etiópia, aútí mobémbo mwa losámbo o Yerúzalem, | |
Acts | LinVB | 8:28 | mpé azalákí kozónga epái ya yě ; afándí o likaló mpé azalákí kotánga búku ya proféta Izáya. | |
Acts | LinVB | 8:30 | Filípo akeí mbángu mpé ayókí eníki ôná azalákí kotánga búku ya proféta Izáya. Atúní yě : « Ozalí koyéba ntína ya maye ozalí kotánga ? » | |
Acts | LinVB | 8:31 | Oyo azóngísí : « Bóníbóní nakokí koyéba ntína ya mangó, sókó moto mǒkó alimbólélí ngáí té ? » Bôngó aséngí Filípo ábuta o likaló, mpé áfánda pene na yě. | |
Acts | LinVB | 8:32 | Maloba azalákí kotánga o búku esántu, mangó maye : « Bakeí na yě lokóla mpatá balingí koboma ; lokóla mwána wa mpatá ezalí kolela té, ntángo bazalí kokáta yangó nsúki, afungólí monoko té. | |
Acts | LinVB | 8:33 | Bakitísí yě o likambo, bakátí lyangó na bosémbo té. Náni moto akoloba nsango ya bána ba yě ? Zambí babótólí yě bomoi o mokili. » | |
Acts | LinVB | 8:34 | Eníki alobí na Filípo : « Nabóndélí yǒ, yébísá ngáí : proféta akomí yangó mpô ya náni ? Mpô ya yě mǒkó tǒ mpô ya moto mosúsu ? » | |
Acts | LinVB | 8:35 | Bôngó Filípo abandí koloba, mpé út’o maloba maye ma Minkandá, asangélí yě Nsango Elámu ya Yézu. | |
Acts | LinVB | 8:36 | Ezalákí bangó kokende bôngó, bakómí o esíká mái mazalákí, mpé eníki alobí : « Tálá, mái mazalí áwa. Elóko níni epekísí ngáí ’te nákúla batísimo ? » ( | |
Acts | LinVB | 8:37 | Filípo alobí : « Sókó oyambí na motéma mǒkó, okokí kokúla batísimo. » Oyo ayanólí : « Nayambí ’te Krístu azalí Mwána wa Nzámbe. ») | |
Acts | LinVB | 8:38 | Atélémísí likaló. Bánso bábalé bakití o mái, ná Filípo ná eníki, mpé Filípo abátísí yě. | |
Acts | LinVB | 8:39 | Ebimí bangó o mái, Elímo wa Mokonzi alímwísí Filípo, mpé eníki amóní yě lisúsu té ; bôngó yě mǒkó alandí nzelá ya yě na esengo. | |
Chapter 9
Acts | LinVB | 9:1 | Saul azalákí bobélé kokánela bayékoli ba Mokonzi mpô ya koboma bangó. Akeí epái ya nganga mokonzi, | |
Acts | LinVB | 9:2 | mpé aséngí yě minkandá, ákende na myangó epái ya bato ba sinagóga ya Damásko, mpô ’te, sókó amóní bato bakolandaka nzelá ya Yézu, babáli tǒ básí, ákanga bangó na minyolólo mpé ákamba bangó o Yerúzalem. | |
Acts | LinVB | 9:3 | Ntángo azalákí kokende mpé akómí penepene na Damásko, na mbálákáká mwínda makási moútákí o likoló, mongengí mpé mozíngí yě. | |
Acts | LinVB | 9:4 | Akwéí o nsé, ayókí loláká lolobí na yě : « Saul, Saul, ntína níni ozalí konyókolo ngáí ? » | |
Acts | LinVB | 9:5 | Saul atúní : « Mokonzi, yǒ náni ? » Yě azóngísí : « Ngáí nazalí Yézu, óyo ozalí konyókolo. | |
Acts | LinVB | 9:7 | Báníngá bazalákí kotámbola na yě nzelá yǒ kó batélémí, bawéí na nsómo ; bayókákí loláká, kasi bamónókí moto mǒkó té. | |
Acts | LinVB | 9:8 | Saul atélémí, kasi, atâ míso ma yě mafungwámí, azalákí komóno elóko té. Basímbí yě na lobóko mpô ya kokende na yě o Damásko. | |
Acts | LinVB | 9:10 | Ezalákí o Damásko moyékoli mǒkó nkómbó ’te Ananía. Mokonzi abimélí yě o limóní, abéngí yě : « Ananía ! » Oyo azóngísí : « Mokonzi, ngáí óyo. » | |
Acts | LinVB | 9:11 | Mokonzi alobí : « Kendé o balabála eye bakobéngaka ‘Sémba’, mpé o ndáko ya Yudási túná moto mǒkó nkómbó ’te Saul wa Társi, azalí kosámbela sikáwa. | |
Acts | LinVB | 9:12 | O limóní aútí komóno moto mǒkó nkómbó ’te Ananía, óyo ayíngélí o ndáko mpé atíélí yě mabóko mpô ’te ámóno lisúsu. » | |
Acts | LinVB | 9:13 | Ananía azóngísí : « Mokonzi, bato baíké bayébísí ngáí makambo ma moto óyo, ná mpé mabé mánso asálákí basántu ba yǒ o Yerúzalem. | |
Acts | LinVB | 9:14 | Sikáwa azalí áwa ; banganga bakonzi bapésí yě likokí lya kokanga baye bánso bakobóndelaka nkómbó ya yǒ. » | |
Acts | LinVB | 9:15 | Kasi Mokonzi alobí na yě : « Kendé, naponí yě ásálela ngáí ; akosakola nkómbó ya ngáí o bikólo bisúsu, o míso ma bakonzi mpé ma bato ba Israél. | |
Acts | LinVB | 9:17 | Ananía akeí, ayíngélí o ndáko, atíélí Saul mabóko mpé alobí na yě : « Saul, ndeko wa ngáí, Mokonzi Yézu óyo abimélákí yǒ o nzelá eye ozalákí kokende, yě moto atíndí ngáí mpô ’te ómóno lisúsu mpé ótónda na Elímo Sántu. » | |
Acts | LinVB | 9:18 | Sé o ntángo êná bilóko lokóla bitekú bilongwí o míso ma yě, mpé Saul abandí komóno lisúsu. Atélémí mpé akúlí batísimo. | |
Acts | LinVB | 9:19 | Na nsima abandí kolía, mpé nzóto ya yě eléndí lisúsu. Aúmélí mwâ mikolo epái ya bayékoli o Damásko. | |
Acts | LinVB | 9:21 | Baye bánso bayókí yě, bakámwí, balobí : « Moto azalákí konyókolo bato bakosámbelaka nkómbó eye o Yerúzalem, yě té ? Ayákí mpé áwa té mpô ’te ákende na bangó epái ya banganga bakonzi ? » | |
Acts | LinVB | 9:22 | Kasi Saul azalákí sé kolénda, mpé alóngí ba-Yúda ba Damásko na botéyi bangó ’te Yézu azalí Krístu sôló. | |
Acts | LinVB | 9:24 | Kasi Saul ayókí maye bakání kosála yě. Butú mói bazalákí kokéngele bizibeli bya engumbá mpô ya koboma yě. | |
Acts | LinVB | 9:25 | Bôngó bayékoli ba yě bakeí na yě na butú, mpé bakitísí yě o ekoló út’o likoló lya efelo ya engumbá. | |
Acts | LinVB | 9:26 | Ekómí Saul o Yerúzalem, amekí kokútana na bayékoli, kasi bangó bánso bazalákí kobánga yě, babóyí kondima ’te yě mpenzá akómí moyékoli. | |
Acts | LinVB | 9:27 | Bôngó Bárnaba akeí na yě epái ya bapóstolo ; ayébísí bangó ndéngé Saul amónókí Mokonzi o nzelá, maye Mokonzi alobákí na yě, mpé na mpíkó níni asakólákí o nkómbó ya Yézu o Damásko. | |
Acts | LinVB | 9:28 | Ut’o mokolo môná azalákí elongó na bapóstolo o Yerúzalem, mpé azalákí kosakola na mpíkó o nkómbó ya Mokonzi. | |
Acts | LinVB | 9:29 | Asolólí mpé na ba-Yúda baye bazalákí koloba lokóta la ba-Gréki, mpé awélí ntembe na bangó. Kasi bangó balukí nzelá ya koboma yě. | |
Acts | LinVB | 9:31 | Eklézya ekómí na bobóto o Yudéa mobimba, o Galiléa mpé o Samaría ; bánso baléndí o boyambi, bazalákí kotósa Mokonzi mpé bakómí baíké na libóndí lya Elímo Sántu. | |
Acts | LinVB | 9:33 | Kúná akútání na moto mǒkó nkómbó ’te Enéo, moto akúfá makolo ; mbúla mwambe asílí alálí o kitikwálá. | |
Acts | LinVB | 9:34 | Pétro alobí na yě : « Enéo, Yézu Krístu abíkísí yǒ, télémé mpé yǒ mǒkó bongísá mbéto ya yǒ. » Sikawâná mpenzá Enéo atélémí. | |
Acts | LinVB | 9:36 | O ntéi ya bayékoli ba Yópe ezalákí mwásí mǒkó nkómbó ’te Tabíta (o lokóta la ba-Gréki Dorkas, lokóla ’te ‘mbólókó’). Azalákí kosálisa bato baíké mpé kokabela babóla makabo. | |
Acts | LinVB | 9:37 | Sé o mikolo mîná akómí kobéle mpé awéí. Basukólí nzóto ya yě, mpé babutísí yangó o mokili mwa ndáko. | |
Acts | LinVB | 9:38 | Lída ezalí mosíká na Yópe té, yangó wâná ntángo bayékoli bayókí ’te Pétro azalákí kúná, batíndélí yě bato bábalé bábóndela yě : « Yáká nokí epái ya bísó. » | |
Acts | LinVB | 9:39 | Nokí Pétro akeí nzelá yǒ kó na bangó. Ekómí yě kúná, bakeí na yě o mokili mwa ndáko. Básí bazéngé bánso bazalákí kolela bayéí kozínga yě ; mpé balakísí yě bilambá na miláto miye Dorkas asonókí ntángo azalákí naíno na bangó. | |
Acts | LinVB | 9:40 | Pétro abimísí bato bánso o libándá, na nsima afukámí mpé asámbélí. Amíbóngólí epái ya ebembe, alobí : « Tabíta, télémé. » Tabíta afungólí míso, amóní Pétro mpé amífándísí. | |
Acts | LinVB | 9:41 | Pétro asímbí yě na lobóko mpé atélémísí yě. Abéngí basántu mpé básí bazéngé, mpé alakísí bangó ’te azalí na bomoi. | |
Chapter 10
Acts | LinVB | 10:1 | Ezalákí o Sezaréa moto mǒkó nkómbó ’te Kornélio, yě komandá wa limpingá lya basodá monkámá ba Róma, liye bakobéngaka ‘Itália’. | |
Acts | LinVB | 10:2 | Moto óyo wa bosémbo, elongó na bato bánso ba libótá lya yě, azalákí kotósa Nzámbe na motéma mǒkó, azalákí kokabela ba-Yúda makabo maíké, mpé kosámbela Nzámbe ntángo ínso. | |
Acts | LinVB | 10:3 | Mokolo mǒkó, na ngonga sókí ya ísáto ya mpókwa, amóní ǎnzelú mǒkó wa Nzámbé abimélí yě, akótí o ndáko mpé abyángí yě : « Kornélio ! » | |
Acts | LinVB | 10:4 | Kornélio atálí yě mpé ayókí nsómo ; atúní yě : « Mokonzi, likambo níni ? » Anzelú azóngísélí yě : « Losámbo na makabo ma yǒ mabutí kín’o mbóka Nzámbe, yě abósání yǒ té. | |
Acts | LinVB | 10:6 | Afándí o ndáko ya Simóni, moto akosálaka mosálá mwa kobongisa mposo ya nyama ; ndáko ya yě ezalí penepene na libóngo lya mbú. » | |
Acts | LinVB | 10:7 | Ntángo ǎnzelú óyo alobákí na yě akeí, Kornélio abéngí basáli ba yě bábalé mpé sodá mǒkó wa baye bakosálelaka yě, yě moto wa Nzámbe ; | |
Acts | LinVB | 10:9 | Mokolo mwa nsima, áwa bazalákí kokende o nzelá mpé babelémí na Yópe, Pétro abutí o mokili mwa ndáko mpô ya kosámbela ; ezalákí penepene na midí. | |
Acts | LinVB | 10:11 | likoló lifungwámí mpé elóko yǒ kó ekití o nsé, lokóla elambá enéne ekangémí o nsóngé ínei. | |
Acts | LinVB | 10:12 | O káti ya elambá nyama ya ndéngé ínso izalákí : iye ikotámbolaka na makolo mánei, ná iye ikolandaka o mabelé, ná ndeke ínso ya likoló. | |
Acts | LinVB | 10:14 | Kasi Pétro azóngísí : « Nakokí kolía té, Mokonzi, téé leló naléí naíno elóko yǒkó mbindo tǒ ya ekila té ! » | |
Acts | LinVB | 10:15 | Mbala ya íbalé, loláká lolobí lisúsu ’te : « Bilóko bizalí péto o míso ma Nzámbe, ótánga byangó bilóko mbindo té. » | |
Acts | LinVB | 10:17 | Pétro azalákí komítúna ntína ya limóní liye amónókí, ntángo bato baye Kornélio atíndákí bayéí. Bazalákí koluka ndáko ya Simóni mpé bakómí o monoko mwa lopángo. | |
Acts | LinVB | 10:19 | Ntángo Pétro azalákí naíno kokanisa limóní liye amónókí, Elímo alobí na yě : « Tálá bato bábalé bazalí koluka yǒ. | |
Acts | LinVB | 10:21 | Bôngó Pétro akití, akómí epái ya bangó mpé alobí na bangó : « Ngáí nazalí moto óyo bínó bozalí koluka. Mpô níni boyéí áwa ? » | |
Acts | LinVB | 10:22 | Bazóngísí : « Komandá Kornélio moto atíndí bísó. Yě azalí moto wa bosémbo mpé akotósaka Nzámbe na motéma mǒkó ; ba-Yúda bánso bakondimaka yě. Anzelú mosántu mǒkó ayébísákí yě ’te ábênga yǒ o ndáko ya yě mpô ’te áyóka maye okoyébisa yě. » | |
Acts | LinVB | 10:23 | Pétro akótísí bangó mpé ayambí bangó o ndáko. Mokolo mwa nsima akeí nzelá yǒkó na bangó ; bandeko basúsu ba Yópe bakeí na bangó elongó. | |
Acts | LinVB | 10:24 | Nsima ya mokolo mǒkó akómí o Sezaréa. Kornélio azalákí kozila bangó mpé asangísákí bandeko na báníngá ba yě ba motéma. | |
Acts | LinVB | 10:28 | alobí na bangó : « Bínó boyébí ’te epekísámí makási ’te mo-Yúda áfánda esíká yǒ kó na mompaya, tǒ ákóto o ndáko ya yě. Kasi Nzámbe moto alakísí ngáí ’te nakokí kotála moto mǒkó lokóla moto mbindo té, tǒ lokóla moto alongóbání té. | |
Acts | LinVB | 10:29 | Yangó wâná, áwa bobéngí ngáí, natíí ntembe té, nayéí. Bôngó natúní bínó : Ntína níni bobéngí ngáí ? » | |
Acts | LinVB | 10:30 | Kornélio azóngísí : « Elekí sikáwa mikolo mísáto, nazalákí kosámbela o ndáko ya ngáí, ezalákí o ngonga ya ísáto ya mpókwa ; na mbálákáká moto mǒkó atélémí libosó lya ngáí, alátí bilambá bizalákí kongenge, | |
Acts | LinVB | 10:31 | alobí na ngáí : ‘Kornélio, Nzámbe andimí losámbo la yǒ, akundólí mpé ndéngé okopésaka babóla makabo. | |
Acts | LinVB | 10:32 | Bôngó tíndá bato o Yópe, bábênga Simóni, óyo bakotángaka Pétro. Azalí o ndáko ya moto mǒkó akosálaka mosálá mwa kobongisa mposo ya nyama, nkómbó ya yě Simóni, óyo afándí penepene na libóngo lya mbú’. | |
Acts | LinVB | 10:33 | Natíndákí bato nokí bábênga yǒ ; áwa oyéí, osálí malámu. Sikáwa bísó bánso tozalí áwa o míso ma Nzámbe mpô tóyóka maye mánso Mokonzi atíndí óyébisa bísó. » | |
Acts | LinVB | 10:34 | Pétro abandí koloba, yě ’te : « Ya sôló, namóní ’te Nzámbe akotálaka bilongi bya bato té, | |
Acts | LinVB | 10:35 | kasi o bikólo bínso akosepelaka moto nyónso akomemyaka yě mpé akosálaka mambí ma bosémbo. | |
Acts | LinVB | 10:36 | Atíndélí ba-Israél Liloba lya yě, asangélí bangó nsango elámu ya bobóto na monoko mwa Yézu Krístu, óyo azalí Mokonzi wa bato bánso. | |
Acts | LinVB | 10:37 | Boyébí maye masálémákí libosó o Galiléa, na nsima o Yudéa mobimba, út’o ntángo Yoáne azalákí kosakola mpé kobátisa bato : | |
Acts | LinVB | 10:38 | ndéngé Nzámbe atóndísákí Yézu wa Nazaréte na Elímo Sántu mpé apésákí yě ngúyá. O bisíká azalákí koleka, azalákí kosála bato malámu mpé kobíkisa baye bánso bakangémákí na zábolo, mpô Nzámbe azalákí na yě. | |
Acts | LinVB | 10:39 | Bísó tomónókí mánso asálákí o mokili mwa ba-Yúda mpé o Yerúzalem. Babomákí yě na bobáki yě o kurúse. | |
Acts | LinVB | 10:40 | Kasi Nzámbe asékwísí yě nsima ya mikolo mísáto, apésí yě mpé ngúyá ya komílakisa na bato : | |
Acts | LinVB | 10:41 | na bato bánso té, kasi sé na banzénénéké baye Nzámbe asílí aponókí libosó, bísó baye tolíákí mpé tomelékí na yě esíká yǒ kó, nsima ya nsékwa ya yě o bawá. | |
Acts | LinVB | 10:42 | Atíndákí bísó tótéya bato mpé tósakola ’te yě azalí moto óyo Nzámbe atíákí zúzi wa bato bazalí na bomoi mpé wa baye bawá. | |
Acts | LinVB | 10:43 | Mpô ya yě baproféta bánso basakólí ’te moto na moto akoyamba yě, akozwa bolímbisi masúmu mpô ya nkómbó ya yě. » | |
Acts | LinVB | 10:44 | Ezalákí Pétro naíno koloba, Elímo Sántu akitélí baye bánso bazalákí koyóka maloba ma yě. | |
Acts | LinVB | 10:45 | Mpé bandeko ba-Yúda, baye bayákí na Pétro elongó, bakámwí zambí Elímo Sántu akitélí bapagáno lokóla, | |
Acts | LinVB | 10:46 | mpô bayókí ’te bazalákí koloba nkóta ndéngé na ndéngé mpé kokúmisa Nzámbe. Bôngó Pétro alobí : | |
Acts | LinVB | 10:47 | « Náni akokí kopíma bato baye mái ma batísimo, áwa bazwí Elímo Sántu lokóla bísó ? » | |
Chapter 11
Acts | LinVB | 11:1 | Bapóstolo na bandeko ba Yudéa bayókí ’te bapagáno mpe bayambí maloba ma Nzámbe lokóla. | |
Acts | LinVB | 11:5 | « Ntángo nazalákí kosámbela o Yópe, namóní limóní lokóla ndóto : elóko ekití út’o likoló lokóla elambá enéne ekangémí o nsóngé ínei, eyéí penepene na ngáí. | |
Acts | LinVB | 11:6 | Ntángo natálí yangó na bokébi, namóní nyama ya mokili ya makolo mánei, nyama ikolandaka o mabelé mpé ndeke ya likoló. | |
Acts | LinVB | 11:8 | Nazóngísí : ‘Mokonzi, nakokí kolía té, zambí téé leló elóko mbindo tǒ ya ekila ekótí naíno o monoko mwa ngáí té.’ | |
Acts | LinVB | 11:9 | Mbala ya íbalé loláká loyókání út’o likoló, lolobí : ‘Biye bizalí péto o míso ma Nzámbe, ótánga byangó bilóko mbindo té’. | |
Acts | LinVB | 11:11 | Sé o ntángo êná bato básáto bakómí o ndáko esíká tozalákí ; út’o Sezaréa batíndámákí epái ya ngáí. | |
Acts | LinVB | 11:12 | Elímo alobí na ngáí ’te nákende na bangó, nátía ntembe té. Bandeko baye motóbá mpé bakendékí na ngáí kúná, mpé toyíngélí o ndáko ya moto ôná. | |
Acts | LinVB | 11:13 | Ayébísí bísó bóníbóní amónókí ǎnzelú óyo abimélákí yě o ndáko mpé alobákí : ‘Tíndá bato o Yópe, bákende kobênga moto mǒkó Simóni, óyo bakobéngaka Pétro ; | |
Acts | LinVB | 11:15 | Ntángo nabandí koloba, Elímo Sántu akitélí bangó, sé lokóla akitéláká bísó o ebandela. | |
Acts | LinVB | 11:16 | Bôngó nakundólí o motéma ’te Mokonzi alobákí : ‘Yoáne azalákí kobátisa bato na mái, kasi bínó bokokúla batísimo na Elímo Sántu’. | |
Acts | LinVB | 11:17 | Nzámbe akabélí bangó likabo, sé lokóla akabélákí bísó, mpô bayambí Mokonzi Yézu Krístu ; bôngó ngáí ndé náni ’te nápekisa Nzámbe ? » | |
Acts | LinVB | 11:18 | Eyókí bangó maloba mâná, bakitísí mitéma, bakúmísí Nzámbe, balobí : « Nzámbe alakísí bôngó bapagáno nzelá ya kobóngola mitéma mpô ’te bázwa bomoi ! » | |
Acts | LinVB | 11:19 | Bandeko bapanzánákí mpô ya minyóko bayókísákí bangó ntángo babomákí Stéfano, bakimí téé o mokili mwa Fenísia, o Sípro mpé o Antiókia, kasi bazalákí kosakola Liloba bobélé na ba-Yúda. | |
Acts | LinVB | 11:20 | Nzókandé mǒkó na mǒkó o káti ya bato ba Sípro mpé ba Siréne, baye bakómí o Antiókia, babandí kosolola na baye bazalákí ba-Yúda té, mpé basangélí bangó Nsango Elámu ya Mokonzi Yézu. | |
Acts | LinVB | 11:23 | Ntángo akómí kúná, amóní bolámu bwa Nzámbe, asepélí mpé aléndísí bangó bánso mpô ’te bakoká kosálela Mokonzi na motéma mǒkó. | |
Acts | LinVB | 11:24 | Bárnaba azalákí moto malámu, moto atóndí na Elímo Sántu mpé na boyambi. Bôngó bato baíké bakómí koyamba Mokonzi. | |
Acts | LinVB | 11:26 | Akútí yě mpé azóngí na yě o Antiókia. Mbúla mobimba bafándí o ntéi ya bato ba Eklézya, mpé bazalákí kotéya bato míngi. O Antiókia bayékoli bazwí mbala ya yambo nkómbó ‘bakrístu’. | |
Acts | LinVB | 11:28 | Mǒ kó wa bangó, nkómbó ’te Agábo, atélémí mpé na ngúyá ya Elímo abandí kosakola ’te nzala enéne ekokwêla mokili mobimba. Nzala yangó esálémí o eleko ya Kaizáro Klódio. | |
Acts | LinVB | 11:29 | Bôngó bayékoli bakání kotíndela bandeko ba Yudéa lisálisi, moto na moto lokóla akokí. | |
Chapter 12
Acts | LinVB | 12:3 | Awa amóní ’te yangó esepélísí ba-Yúda, akangísí mpé Pétro. Ezalákí o eleko ya Mámpa mavímbí té. | |
Acts | LinVB | 12:4 | Nsima ya kokanga Pétro, akótísí yě o bolóko, mpé atíí basodá zómi na motóbá bákéngele yě, basodá bánei ngala na ngala. Alingí kosámbisa yě o bosó bwa bato nsima ya Pásiká. | |
Acts | LinVB | 12:6 | O butú libosó lya mokolo Eróde alingí kosámbisa yě, Pétro azalákí kolála mpongí o káti ya basodá bábalé ; akangémí na minyolólo míbalé mpé basodá bazalákí kokéngele ezibeli ya bolóko. | |
Acts | LinVB | 12:7 | Na mbálákáká ǎnzelú wa Mokonzi ayéí, mpé mwínda mongengí o ndáko. Anzelú atútí Pétro o mopanzí, alamúsí yě mpé alobí na yě : « Télémé nokí ! », mpé minyolólo milongwí o mabóko ma yě. | |
Acts | LinVB | 12:8 | Na nsima ǎnzelú alobí na yě : « Kangá nkámba mpé látá sapátu. » Pétro asálí bôngó. Anzelú alobí na yě lisúsu : « Látá elambá mpé landá ngáí. » | |
Acts | LinVB | 12:9 | Pétro abimí mpé alandí yě ; ayébí té sókó likambo liye lisálémí na ǎnzelú lizalákí lya sôló, akanísí ’te azalákí komóno limóní. | |
Acts | LinVB | 12:10 | Balekí bakéngeli ba penepene na bakéngeli ba libosó, mpé bakómí pene na ezibeli ya ebendé, esíká bakoyíngelaka o engumbá. Ezibeli yangó mǒkó efungwámí o míso ma bangó. Babimí, mpé ekómí bangó o nsúka ya balabála, ǎnzelú alímwí. | |
Acts | LinVB | 12:11 | O ntángo êná mayéle mazóngélí Pétro, alobí : « Sikáwa nayébí sôló ’te Mokonzi atíndí ǎnzelú wa yě mpé alongólí ngáí o mabóko ma Eróde mpé o makambo mánso ba-Yúda balingí kosála ngáí. » | |
Acts | LinVB | 12:12 | Awa ayébí likambo likwêlí yě, akeí o ndáko ya María, mamá wa Yoáne, óyo bakobéngaka Márko. Bandeko baíké basangání wâná, bazalákí kosámbela. | |
Acts | LinVB | 12:13 | Abétélí ezibeli ya ndáko, mpé mosáli mwásí mǒkó nkómbó ’te Róda akeí kotála sókó náni ayéí. | |
Acts | LinVB | 12:14 | Awa ayókí mongóngó mwa Pétro, abósání kofungola ndáko mpô ya esengo ; azóngí o káti ya ndáko koyébisa ’te Pétro azalákí o libándá libosó lya ezibeli ya ndáko. | |
Acts | LinVB | 12:15 | Bangó balobí na yě : « Ozalí na ligbómá », kasi yě aléndísí, alobí : « Ezalí yě. » Kasi balobí na yě : « Ezalí ǎnzelú wa yě ! » | |
Acts | LinVB | 12:16 | Nzókandé Pétro azalákí sé kobétele ezibeli ya ndáko. Awa bafungólí ndáko, bamóní ’te ezalákí yě sôló, mpé bakámwí míngi. | |
Acts | LinVB | 12:17 | Kasi na lobóko alakísí bangó ’te bákanga monoko, mpé asolólí na bangó bóníbóní Mokonzi abimísí yě o bolóko. Abakísí : « Bókende koyébisa yangó na Yakóbo mpé na bandeko. » Na nsima abimí mpé akeí o esíká esúsu. | |
Acts | LinVB | 12:19 | Eróde atíndákí ’te báluka yě, kasi bazwákí yě té ; bôngó asámbísí bakéngeli, mpé atíndí ’te báboma bangó. Eróde alongwí o Yudéa mpé akeí o Sezaréa ; atíkálí kofánda wâná. | |
Acts | LinVB | 12:20 | Eróde ayókélí bato ba Tíro mpé ba Sidóni nkándá. Bangó bánso elongó bayéí o mbóka yě. Bayókánákí na Blásto, moyángeli wa ndáko ya mokonzi, ’te básénge bobóto epái ya Eróde, zambí bikólo bya bangó bizalákí kozwa bilóko bya kolía sé o mokili mwa mokonzi. | |
Acts | LinVB | 12:21 | Ekómí mokolo Eróde alakákí bangó, alátí bilambá bya bokonzi, afándí o kíti ya yě ; ntángo azalákí kosakola na bangó, | |
Acts | LinVB | 12:23 | Kasi sé o ntángo êná ǎnzelú wa Mokonzi abétí yě, mpámba té, abóyákí kopésa Nzámbe lokúmu lokokí na yě ; esílísí nkusú kolía yě, akátí motéma. | |
Acts | LinVB | 12:24 | Nzókandé Liloba lya Nzámbe lizalákí sé kopalangana mpé bato baíké bakómí koyamba lyangó. | |
Chapter 13
Acts | LinVB | 13:1 | O Eklézya ya Antiókia baproféta na batéyi bazalákí : Bárnaba, Simeó óyo bakobéngaka Níger, Lúsio wa Siréne, Manaén, óyo akólákí esíká yǒ kó na moyángeli wa Eróde, na Saul. | |
Acts | LinVB | 13:2 | Mokolo mosúsu, ntángo bazalákí kosámbela Mokonzi mpé kolála nzala, Elímo Sántu alobí : « Bótíkela ngáí Bárnaba na Saul básála mosálá naponélí bangó. » | |
Acts | LinVB | 13:3 | Bôngó balálí nzala mpé basámbélí ; na nsima batíélí bangó mabóko mpé batíkí bangó bákende. | |
Acts | LinVB | 13:4 | Awa Elímo Sántu atíndí bangó, bakeí o Selésia ; kúná bakwélí o masúwa mpé bakeí o Sípro. | |
Acts | LinVB | 13:5 | Ekómí bangó o Sálamis babandí kosakola Liloba lya Nzámbe o sinagóga ya ba-Yúda. Yoáne azalákí kosálisa bangó. | |
Acts | LinVB | 13:6 | Bakátísí esanga mobimba kín’o Páfos. Kúná bakútí mo-Yúda mǒkó, azalákí nganga mpé akomítángaka proféta, nkómbó ya yě Bar-Yézu. | |
Acts | LinVB | 13:7 | Azalákí kofánda epái ya Sérgio Pólo, moyángeli mpé moto wa mayéle. Sérgio óyo atíndí ’te bábênga Bárnaba na Saul, mpô azalákí na mpósá ya koyóka Liloba lya Nzámbe. | |
Acts | LinVB | 13:8 | Kasi nganga Elimási (lokóla ba-Gréki bakobéngaka yě ) andimí bangó té, amekí mpé kopekisa moyángeli koyamba. | |
Acts | LinVB | 13:10 | alobí : « Ozalí mwána wa zábolo, otóndí na mayéle mabé mpé na bokósi, ozángí bosémbo. Okotíka té kobébisa nzelá sémba ya Mokonzi ? | |
Acts | LinVB | 13:11 | Tálá, sikasikáwa lobóko la Mokonzi lokobéte yǒ ; okokóma na lolandá, mpé mwâ mikolo okomóno mói lisúsu té. » Sé o ntángo êná molílí mokangí yě, amíbóngólí epái na epái, mpé alukí moto mǒkó ákamba yě. | |
Acts | LinVB | 13:12 | Awa moyángeli amóní bôngó, akómí koyamba, mpô matéya ma Mokonzi makotélí yě o motéma. | |
Acts | LinVB | 13:13 | Pólo na báníngá ba yě bakwélí o masúwa o Páfos, bakomí o libóngo lya Pérge ya Pamfília. Kasi Yoáne atíkí bangó mpé azóngí o Yerúzalem. | |
Acts | LinVB | 13:14 | Bangó balekí Pérge mpé bakómí o Antiókia ya Pisídia. O mokolo mwa sábato bayíngélí o sinagóga mpé bafándí wâná. | |
Acts | LinVB | 13:15 | Nsima ya botángi Minkandá mya Mobéko mpé mya baproféta, bakonzi ba sinagóga batíndélí bangó maloba maye : « Bandeko, sókó bozalí na mwâ liloba lya koléndisa bato, bóloba. » | |
Acts | LinVB | 13:16 | Pólo atélémí, ayébísí na lobóko mpé alobí : « Bato ba Israél mpé bínó bato bokomemyaka Nzámbe, bóyóka. | |
Acts | LinVB | 13:17 | Nzámbe wa ekólo eye, Nzámbe wa Israél, aponí bankóko ba bísó mpé akólísí ekólo eye, ntángo bazalákí baómbo o Ezípeti. Abimísí bangó kúná na bokási bwa lobóko la yě, | |
Acts | LinVB | 13:19 | Na nsima abomí bikólo nsambo o mokili mwa Kanána mpé akabélí bankóko ba bísó mabelé ma bangó : | |
Acts | LinVB | 13:20 | mibú sókí nkámá ínei na ntúkú ítáno asálísí bangó. Nsima ya yangó apésí bangó bazúzi kín’o eleko ya proféta Samuél. | |
Acts | LinVB | 13:21 | O ntángo êná baséngí ’te bákóma na mokonzi, mpé Nzámbe apésí bangó Saul, mwána wa Kis, wa libótá lya Benyamin : mibú ntúkú ínei azalákí mokonzi wa bangó. | |
Acts | LinVB | 13:22 | Awa Nzámbe alongólí yě, akómísí Davídi mokonzi wa bangó. Mpô ya yě alobákí : « Nazwí Davídi, mwána wa Yése, moto óyo ngáí nalingí míngi. Yě akokokisa mánso ngáí nalingí. » | |
Acts | LinVB | 13:24 | Kasi libosó naíno Yoáne aléngélákí boyéi bwa yě na bosangeli ba-Israél bánso batísimo ya bobóyi masúmu. | |
Acts | LinVB | 13:25 | Esílísí Yoáne mosálá mwa yě, alobí : « Ngáí nazalí moto óyo té bínó bozalí kokanisa ; kasi tálá moto óyo akoyâ nsima ya ngáí, nabongí atâ kokangola nsinga ya sapátu ma yě té. » | |
Acts | LinVB | 13:26 | Bandeko, bínó bána ba libótá lya Abaráma, ná mpé bínó bato bokomemyaka Nzámbe, Nzámbe atíndélí bínó nsango ya libíkí. | |
Acts | LinVB | 13:27 | Ya sôló, bato ba Yerúzalem mpé bakonzi ba bangó bandimákí Yézu té, kasi bakitísí yě o liwá, bakokísí bôngó maloba ma baproféta, maye bakotángaka mikolo mínso mya sábato. | |
Acts | LinVB | 13:28 | Atâ bazwákí ntína yǒ kó té ya kokátela yě etúmbu ya liwá, bakitísí yě mpé baséngí Piláto ’te báboma yě. | |
Acts | LinVB | 13:29 | Awa bakokísí maye mánso makomámí mpô ya yě, babákólí yě o kurúse mpé bakundí yě o lilíta. | |
Acts | LinVB | 13:31 | mpé mikolo míngi abimélákí baye batámbólákí na yě elongó út’o Galiléa kín’o Yerúzalem ; bangó bazalí sikáwa banzénénéké ba yě o míso ma bato. | |
Acts | LinVB | 13:33 | Nzámbe akokísí yangó mpô ya bísó bána ba bangó : asékwísí Yézu. Ekomámí bôngó o nzémbo ya íbalé : « Ozalí mwána wa ngáí, ngáí mǒkó nabótí yǒ leló. » | |
Acts | LinVB | 13:34 | Nzámbe asékwísí yě o bawá mpô ’te ápolo lisúsu té, yě mǒkó ayébísákí yangó boye : « Nakokokisela bínó bilakó bisántu nalakélákí Davídi, bikosálema sôló. » | |
Acts | LinVB | 13:35 | Yangó wâná ekomámí mpé epái esúsu : Okolingisa té ’te nzóto ya mosántu wa yǒ épolo. | |
Acts | LinVB | 13:36 | O bomoi bwa yě Davídi asálélákí Nzámbe o maye Nzámbe alingákí ; na nsima awéí, bakundí yě esíká yǒ kó na bankóko ba yě, mpé nzóto ya yě epolí. | |
Acts | LinVB | 13:38 | Bôngó, bandeko, bóyéba ’te tokosangelaka bínó bolímbisi masúmu na nguya ya yě. Na botósi Mobéko mwa Móze bokokákí kozwa libíkí té, | |
Acts | LinVB | 13:41 | Bótála, bínó bato bokotiolaka, bókámwa mpé bólímwa ! Zambí o eleko ya bínó nakosála likambo liye bokondima té, atâ bayébísákí bínó lyangó. » | |
Acts | LinVB | 13:42 | Ntángo Pólo na Bárnaba babimí o sinagóga, bato baséngí bangó ’te báloba naíno makambo mâná o mokolo mwa sábato mokoyâ. | |
Acts | LinVB | 13:43 | Awa lisangá lipalángání, ba-Yúda baíké na bampaya bakokúmisaka Nzámbe balandí Pólo na Bárnaba ; bangó bábalé basolólí na bangó mpé baléndísí bangó ’te báyamba ngrásya ya Nzámbe na moléndé. | |
Acts | LinVB | 13:44 | O mokolo mwa sábato mwa nsima ebelé ya bato ba engumbá basangání mpô ya koyóka Liloba lya Nzámbe. | |
Acts | LinVB | 13:45 | Awa ba-Yúda bamóní bato ebelé boye, batóndí na zúwa, babóyí maloba ma Pólo mpé bafíngí yě. | |
Acts | LinVB | 13:46 | Bôngó Pólo na Bárnaba baléndísí, balobí : « Esengélákí ’te básangela bínó libosó Liloba lya Nzámbe. Kasi, áwa bobóyí lyangó mpé bomóní ’te bobongí kozwa bomoi bwa lobíko té, tokokende epái ya bato ba bikólo bisúsu. | |
Acts | LinVB | 13:47 | Sôló, Mokonzi atíndákí bísó sé bôngó : Natíí yǒ ózala mwínda mwa bikólo bisúsu, mpô ’te óyéla bato libíkí téé nsúka ya mokili. » | |
Acts | LinVB | 13:48 | Eyókí bato ba bikólo bisúsu maloba maye, bayókí esengo enéne mpé bakúmísí Liloba lya Mokonzi ; baye bánso baponómí mpô ’te bázwa bomoi bwa lobíko, bakómí koyamba. | |
Acts | LinVB | 13:50 | Kasi ba-Yúda batombókísí ba-nkúmú ba engumbá ná básí ba lokúmu baye bakokúmisaka Nzámbe ; bôngó babandí konyókolo Pólo na Bárnaba, mpé babengání bangó o ekólo ya bangó. | |
Chapter 14
Acts | LinVB | 14:1 | Bayíngélí mpé o sinagóga ya ba-Yúda o Ikónio ; mpô ya maloba ma bangó ba-Yúda mpé bato ba bikólo bisúsu baíké bakómí koyamba. | |
Acts | LinVB | 14:2 | Kasi ba-Yúda baye babóyí koyamba bapésí bapagáno mayéle mabé ’te bándima bandeko té. | |
Acts | LinVB | 14:3 | Bôngó Pólo na Bárnaba baúmélí naíno o Ikónio ; ngúyá ya Mokonzi eléndísí bangó. Mokonzi alakísí ’te matéya ma ngrásya ya yě mazalí ma sôló ; na mabóko ma bangó alakísí bilembo mpé asálí makamwísi. | |
Acts | LinVB | 14:4 | Bato ba engumbá bakómí koka-bwana : basúsu bandimí ba-Yúda, basúsu bandimí bapóstolo. | |
Acts | LinVB | 14:5 | Bapagáno na ba-Yúda, libosó mpenzá bakóló ba bangó, bamíléngélí mpô ya konyókolo bapóstolo mpé koboma bangó na mabángá. | |
Acts | LinVB | 14:6 | Eyókí bapóstolo bôngó, bakeí kobómbama o bingumbá bya Likaónia, Lístra, Dérbe mpé o mbóka ya penepene ; | |
Acts | LinVB | 14:9 | Ntángo azalákí koyóka maloba ma Pólo, Pólo atálí yě malámu mpé amóní ’te azalákí na boyambi mpô ’te ábíka ; | |
Acts | LinVB | 14:10 | alobí na mongóngó makási : « Télémé o makolo ma yǒ ! » Yě apimbwí mpé abandí kotámbola. | |
Acts | LinVB | 14:11 | Emóní bato likambo Pólo asálí, bagángí o lokóta la ba-Likaónia : « Banzámbe bakómí na nzóto lokóla bato, bakití epái ya bísó ! » | |
Acts | LinVB | 14:13 | Ndáko esíká bakosámbelaka nzámbe Zeus ezalákí o libándá lya lopángo la engumbá. Nganga wa Zeus ayéí na ngómbé babáli, iye bakémbísí na matíti mpé na fuléle, penepene na ezibeli ya engumbá ; ayókání na bato ’te bábonza yangó. | |
Acts | LinVB | 14:14 | Awa bapóstolo Bárnaba na Pólo bayókí yangó, bapasólí bilambá, bakimí mbángu epái ya bato mpé bagángí : | |
Acts | LinVB | 14:15 | « Báníngá ! Bozalí kosála níni ? Bísó mpé tozalí sé bato lokóla bínó ; tozalí koyébisa bínó ’te bosengélí kotíka banzámbe ba lokutá mpé kokúmisa Nzámbe wa bomoi, óyo akelí likoló na nsé, mbú ná mpé bínso bizalí wâná. | |
Acts | LinVB | 14:17 | nzókandé amíyébísákí na bato na bokabeli bangó makabo : út’o likoló akonókiselaka bínó mbúla, akopésaka mbuma o eleko ya yangó ná mpé biléi bikosepelisaka mitéma mya bínó. » | |
Acts | LinVB | 14:18 | Atâ balobí bôngó, bobélé na mpási mpenzá bakokí kopekisa bato kobonzela bangó libonza. | |
Acts | LinVB | 14:19 | Sé o ntángo êná ba-Yúda baútákí o Antiókia mpé o Ikónio babúlíngínyí mitéma mya bato. Babwákélí Pólo mabángá ; babéndí yě o libándá lya engumbá, mpô bakanísí ’te awéí. | |
Acts | LinVB | 14:20 | Kasi áwa bayékoli bazíngí yě, Pólo atélémí mpé ayíngéli o engumbá. Mokolo mwa nsima Pólo na Bárnaba bakeí o Dérbe. | |
Acts | LinVB | 14:21 | Basangélí Nsango Elámu o engumbá êná, mpé bato baíké bakómí koyamba. Na nsima bazóngí o Lístra, o Ikónio mpé o Antiókia. | |
Acts | LinVB | 14:22 | Kúná baléndísí bayékoli mitéma mpé batéyí bangó ’te bázala na moléndé o boyambi, balobí : « Tokoyíngela o Bokonzi bwa Nzámbe bobélé na mikakatano. » | |
Acts | LinVB | 14:23 | O Eklézya yǒ kó yǒ kó baponí bakóló, basámbélí mpé balálí nzala, mpé batíkí bangó o mabóko ma Mokonzi óyo bangó bayambí. | |
Acts | LinVB | 14:26 | Kúná bakwélí o masúwa mpé bazóngí o Antiókia. Kúná bayékoli batíkákí bangó o mabóko ma Nzámbe mpô ’te na lisálisi lya ngrásya ya Yě básála mosálá moye basílísí sikáwa. | |
Acts | LinVB | 14:27 | Ekómí bangó kúná, basangísí bato ba Eklézya bánso, bayébísí mánso Nzámbe asálákí elongó na bangó, mpé bóníbóní Nzámbe afungólélí bato ba bikólo bisúsu nzelá ya boyambi. | |
Chapter 15
Acts | LinVB | 15:1 | Nzókandé bato basúsu baútákí o Yudéa bazalákí kotéya bandeko ’te : « Sókó bokátísí nzóto té lokóla Móze atíndákí, bokokí kobíka té. » | |
Acts | LinVB | 15:2 | Bayókání té mpé Pólo na Bárnaba bawélání ntembe makási na bangó ; bôngó bakání kotínda Pólo, Bárnaba mpé bandeko basúsu ba Antiókia bákende o Yerúzalem mpô ’te bapóstolo na bakóló bátála likambo lyangó. | |
Acts | LinVB | 15:3 | Bôngó bandeko ba Eklézya bakeí kotíka bangó o nzelá. Ntángo bakátísí Fenísia mpé Samaría, basolólí na bandeko likambo lya bapagáno bakómí bakrístu ; yangó eyókísí bandeko bánso esengo enéne. | |
Acts | LinVB | 15:4 | Ekómí bangó o Yerúzalem bato ba Eklézya, bapóstolo na bakóló bayambí bangó. Bayébísí bangó maye Nzámbe asálákí na mabóko ma bangó. | |
Acts | LinVB | 15:5 | Kasi bato basúsu ba lingómbá lya ba-Farizéo baye bakómí bakrístu, batélémí mpé balobí ’te bapagáno basengélí kokátisa nzóto, bátínda bangó mpé bátósa Mobéko mwa Móze. | |
Acts | LinVB | 15:7 | Baúmélí na bowélani ntembe, bôngó Pétro atélémí mpé alobí : « Bandeko, boyébí ’te Nzámbe aponí ngáí ut’á kala o ntéi ya bínó mpô ’te bato ba bikólo bisúsu báyóka Nsango Elámu na monoko mwa ngáí, mpé báyamba. | |
Acts | LinVB | 15:8 | Sôló, Nzámbe óyo ayébí mitéma mya bato, alakísí ’te andimí bangó, zambí apésí bangó Elímo Sántu lokóla apésákí bísó. | |
Acts | LinVB | 15:9 | Ayambí bangó lokóla ayambákí bísó, motíndo mǒkó, zambí apétólí mitéma mya bangó na boyambi. | |
Acts | LinVB | 15:10 | Bôngó bolingí ndé komeka Nzámbe na botíeli bayékoli mókúmbá, moye batatá ná mpé bísó mǒkó tokokákí komeme té ? | |
Acts | LinVB | 15:12 | Bato bánso o likita batíkálí nyê. Bayókí Bárnaba na Pólo ntángo basolólí bikelá na makamwísi maye Nzámbe asálákí na mabóko ma bangó o ntéi ya bapagáno. | |
Acts | LinVB | 15:14 | Simóni alimbólí bóníbóní út’o ebandela Nzámbe aponókí o ntéi ya bapagáno ekólo yǒ kó ézala ekólo ya yě. | |
Acts | LinVB | 15:16 | Nsima ya yangó nakozónga mpé nakotónga lisúsu ndáko ya Davídi eye ekwéyákí ; nakobongisa ndáko ekúfá, nakotélemisa yangó lisúsu | |
Acts | LinVB | 15:17 | mpô ’te bato basúsu báluka Mokonzi, elongó na bato ba bikólo bínso, baye babyángémí na Nkómbó ya ngáí. | |
Acts | LinVB | 15:18 | Mokonzi alobí ’te akosála makambo mâná, yě moto ayébísáká bô-ngó út’o bileko na bileko. | |
Acts | LinVB | 15:19 | Yangó wâná nakanísí ’te tokokí kotungisa bapagáno té, baye babó-ngólí mitéma epái ya Nzámbe. | |
Acts | LinVB | 15:20 | Básénge bangó bobélé ’te bátíka kolía biléi biye babonzélí bikeko, bátíka mabála mapekísámí, bátíka kolía nyama iye babomí na bofini nkíngó, mpé baliá makilá ma yangó té. | |
Acts | LinVB | 15:21 | Zambí út’o kala bakotéyaka Mibéko miye mya Móze o bingumbá bínso ; bakotángaka myangó o sinagóga mikolo mínso mya sábato. » | |
Acts | LinVB | 15:22 | Na nsima bapóstolo na bakóló, elongó na bato bánso ba Eklézya, bakání kopono bato basúsu o ntéi ya bangó mpé kotínda bangó o Antiókia elongó na Pólo mpé na Bárnaba. Baponí Yúda, óyo bakobéngaka Bársaba, ná Síla, bato ba lokúmu o ntéi ya bandeko. | |
Acts | LinVB | 15:23 | Bapésí bangó monkandá moye : « Bísó bapóstolo mpé bakóló totí-ndí losáko ôná bandeko baútí o bikólo bisúsu : bato ba Antiókia, Síria na Silísia. | |
Acts | LinVB | 15:24 | Toyókí ’te bato basúsu baútákí epái na bísó bakótísí ntembe o káti ya bínó na maloba ma bangó, mpé bakómísí bínó mitéma likoló ; bóyéba ’te bísó totíndákí bangó té. | |
Acts | LinVB | 15:25 | Yangó wâná toyókání ’te tópono bato mpé tótíndela bínó bangó elongó na bandeko ba bísó ba bolingo, Bárnaba na Pólo. | |
Acts | LinVB | 15:28 | Elímo Sántu mpé bísó mǒkó tokání kotíela bínó míkúmbá misúsu té ; bótósa bobélé mibéko miye misengélí mpenzá : | |
Acts | LinVB | 15:29 | bótíka kolía nyama babonzélákí bikeko, ná makilá ná mpé nyama iye babomí na bofini nkíngó ; bótíka mpé mabála maye mapekísámí na mibéko. Sókó botósí mibéko miye, bokosála malámu. Bótíkala malámu. » | |
Acts | LinVB | 15:30 | Bôngó bantóma batíkí bandeko mpé bakeí o Antiókia ; kúná basangísí bato ba Eklézya mpé bapésí bangó monkandá mwangó. | |
Acts | LinVB | 15:32 | Yúda na Síla, bangó mpé bazalákí baproféta, baléndísí bandeko mpé bapésí bangó motéma mpíkó na maloba maíké ma boléndisi. | |
Acts | LinVB | 15:33 | Nsima ya mwâ mikolo bandeko batíkí bangó bázóngi na bobóto epái ya bato baye batíndákí bangó. ( | |
Acts | LinVB | 15:35 | Pólo na Bárnaba batíkálí o Antiókia ; elongó na bato basúsu baíké bazalákí kotéya mpé kosangela Liloba lya Mokonzi. | |
Acts | LinVB | 15:36 | Nsima ya mwâ mikolo Pólo alobí na Bárnaba : « Tózónga o bingumbá bínso esíká totéyákí Liloba lya Mokonzi mpô tótála sókó bandeko bazalí malámu. » | |
Acts | LinVB | 15:38 | kasi Pólo akanísí ’te bakokí kokende na yě té, zambí atíkákí bangó o Pamfília, mpé azalákí kosála lisúsu mosálá elongó na bangó té. | |
Acts | LinVB | 15:39 | Baswání míngi, nsima bakabwání. Bárnaba akamátí Márko mpé akwélí o masúwa, bakeí o Sípro. | |
Chapter 16
Acts | LinVB | 16:1 | Akómí o Dérbe mpé o Lístra. Moyékoli mǒkó azalákí kúná nkómbó ’te Timotéo ; mamá wa yě mo-Yúda akómá mokrístu, tatá wa yě mo-Gréki. | |
Acts | LinVB | 16:3 | Pólo alingí kokende mobémbo elongó na yě. Bôngó akamátí yě mpé akátísí yě nzóto, mpô ba-Yúda bazalákí o ekólo êná, mpé bato bánso bayébí ’te tatá wa Timotéo azalákí mo-Gréki. | |
Acts | LinVB | 16:4 | O bingumbá bínso bazalákí koleka basangélí mibéko miye bapóstolo na bakóló bapésákí o Yéruzalem, mpé batíndí ’te bátósa myangó. | |
Acts | LinVB | 16:5 | Bato ba Biklézya baléndí o boyambi ; motángo mwa bayékoli mozalákí sé kokóla mokolo na mokolo. | |
Acts | LinVB | 16:6 | Bakátísí Frígia mpé mokili mwa Galáta, zambí Elímo Sántu apekísí bangó kosangela Liloba o Azía. | |
Acts | LinVB | 16:7 | Ekómí bangó penepene na Mízia, bamekí kokende o Bitínia, kasi Elímo wa Yézu alingísí bangó té. | |
Acts | LinVB | 16:9 | Kúná Pólo amóní limóní na butú : Moto mǒkó wa Masedónia atélémí o bosó bwa yě mpé abóndélí yě ’te : « Kátísá mbú kín’o Masedónia, yáká kosálisa bísó. » | |
Acts | LinVB | 16:10 | Emóní yě limóní liye, tolukí nokí nzelá ya kokóma o Masedónia, zambí toyébí malámu ’te Nzámbe moto abéngákí bísó tósangela bangó Nsango Elámu. | |
Acts | LinVB | 16:11 | Tokwélí o masúwa o Tróas, tokeí libosó o esanga Samotráse, mpé mokolo mwa nsima tokómí o Neápoli ; | |
Acts | LinVB | 16:12 | tolongwí kúná mpé tokeí o Filípi mbóka-mokonzi ya Masedónia, esíká ba-Róma bakofándaka. Tofándí mwâ mikolo o engumbá êná ; | |
Acts | LinVB | 16:13 | o mokolo mwa sábato tobimí o engumbá mpé tokeí o libóngo lya mongálá, mpô tokanísí ’te tokokúta bato bazalí kosámbela wâná ; tofándí mpé tosolólí na básí basangání wâná. | |
Acts | LinVB | 16:14 | Mǒ kó wa bangó, nkómbó ’te Lídia, azalákí koyóka bísó ; yě moto wa mombóngo mwa bilambá bya lángi longóndo o engumbá Tiatíra ; akokúmisaka Nzámbe. Mokonzi afungólí motéma mwa yě mpô ’te ándima maloba ma Pólo. | |
Acts | LinVB | 16:15 | Awa akúlí batísimo elongó na bato bánso ba ndáko ya yě, abóndélí bísó, alobi : « Sókó bomóní ’te nayambí Mokonzi Yézu sôló, yákáni kofánda o ndáko ya ngáí. » Abóndélí bísó míngi mpô tóndima. | |
Acts | LinVB | 16:16 | Mokolo mǒkó, áwa tozalákí kokende o losámbo, tokútání na elengé mwásí mǒkó óyo azalákí na elímo ekoyébisaka yě mambí makoyâ nsima ; na boyébisi mangó azalákí kozwela bankóló ba yě mbóngo míngi. | |
Acts | LinVB | 16:17 | Abandí kolanda bísó na Pólo, agángí : « Bato baye bazalí basáleli ba Nzámbe wa Ntá-Likoló, bakosangelaka bínó nzelá ya libíkí ! » | |
Acts | LinVB | 16:18 | Azalákí kosála bôngó mikolo míngi. Likambo lyangó litungísí Pólo, amíbóngólí epái ya yě mpé alobí na elímo êná : « O nkómbó ya Yézu Krístu natíndí yǒ óbima o nzóto ya yě. » Sé o ntángo êná elímo etíkí yě. | |
Acts | LinVB | 16:19 | Kasi, áwa bankóló ba yě bamóní ’te bakozwa lisúsu mosolo na mosálá mwa yě té, bakangí Pólo na Síla, babéndí bangó téé o esámbi ya engumbá o míso ma bakonzi. | |
Acts | LinVB | 16:20 | Balakísí bangó na bayángeli mpé balobí : « Bato baye bazalí kotía mobúlú o engumbá ya bísó. Bazalí ba-Yúda | |
Acts | LinVB | 16:22 | Bato bánso batombókélí bangó ; bayángeli batíndí ’te bálongola bangó bilambá mpé bábéte bangó fímbo. | |
Acts | LinVB | 16:23 | Awa babétí bangó míngi, babwákí bangó o bolóko mpé batíndí mokéngeli ákéngele bangó malámu. | |
Acts | LinVB | 16:24 | Lokóla batíndákí yě, akótísí bangó o ndáko ya katikáti ya bolóko mpé akangí bangó makolo na nkánga. Pólo na Síla babimí o bolóko | |
Acts | LinVB | 16:25 | Penepene na midí ya butú, Pólo na Síla bazalákí kosámbela mpé koyémbela Nzámbe, bato ba bolóko bazalákí koyóka bangó. | |
Acts | LinVB | 16:26 | Na mbala yǒkó mokili moningání makási mpenzá, mpé ndáko mobimba elingí ébúkana. Sé o ntángo êná bizibeli bínso bifungwámí mpé minyolólo mya bato bánso ba bolóko mifungwámí. | |
Acts | LinVB | 16:27 | Mokéngeli alamúkí mpé amóní ’te bizibeli bínso bya bolóko bifungwámí ; áwa akanísí ’te bato bánso ba bolóko bakímí, abimísí mompánga mpé alingí komíboma. | |
Acts | LinVB | 16:29 | Mokéngeli aséngí mwínda, akótí mbangú, amíbwákí o bosó bwa Pólo na Síla, aléngí na nsómo. | |
Acts | LinVB | 16:33 | Sé o ngonga êná ya butú mokéngeli akeí na bangó, asukólí mpótá ya bangó ; na nsima akúlí batísimo, yě na bato ba yě bánso. | |
Acts | LinVB | 16:34 | Akótísí bangó o ndáko ya yě mpé apésí bangó biléi ; ayókí esengo elongó na bato ba yě bánso, mpô bakómí koyamba Nzámbe. | |
Acts | LinVB | 16:35 | Etání ntóngó, bayángeli batíndí bato báyébisa mokéngeli wa bolóko : « Tíká bangó bákende. » | |
Acts | LinVB | 16:36 | Mokéngeli ayéí koyébisa yangó na Pólo : « Bayángeli batíndí ’te nátíka bínó. Bôngó bóbima mpé bókende na bobóto. » | |
Acts | LinVB | 16:37 | Kasi Pólo alobí na bato baye bakonzi batíndákí : « Atâ basámbísí bísó té, babétísí bísó bána-mbóka ba Róma fímbo o míso ma bato mpé bakangísí bísó o bolóko ; mpé sikáwa balingí kobimisa bísó na bonkútú ! Ekokí kosálema bôngó sókí moké té ! Bangó mǒkó báyâ kobimisa bísó. » | |
Acts | LinVB | 16:38 | Bangó bakeí koyébisa bayángeli maloba mâná. Awa bayángeli bayókí ’te bazalákí bána-mbóka ba Róma, bakómí kobánga. | |
Acts | LinVB | 16:39 | Bayéí kosénge bangó bolímbisi, babimísí bangó o bolóko, mpé babóndélí bangó ’te bálongwa o engumbá. | |
Chapter 17
Acts | LinVB | 17:1 | Ekátísí bangó Amfípolis na Apolónia, bakómí o Tesaloníki, esíká ezalákí sinagóga ya ba-Yúda. | |
Acts | LinVB | 17:2 | Pólo asálí sé lokóla ameséní, akeí kotála bangó ; sábato ísáto asolólí na bangó mambí ma Bikomá Bisántu. | |
Acts | LinVB | 17:3 | Alimbólélí bangó Minkandá mpé alakísí ’te Krístu asengélákí koyóka mpási mpé kosékwa o bawá, mpé abakísí : « Krístu, yě ndé Yézu óyo nazalí kosangela bínó. » | |
Acts | LinVB | 17:4 | Basúsu o ntéi ya bangó bayambí mpé bandimí kolanda Pólo na Síla ; ba-Gréki baye bakokúmisaka Nzámbe ná mpé básí baíké ba lokúmu balandí bangó lokóla. | |
Acts | LinVB | 17:5 | Kasi ba-Yúda bayókí zúwa, mpé na lisálisi lya bato babé baye bakotelenganaka o balabála, basangísí bato míngi mpé babimísí mobúlú o engumbá. Bakeí o ndáko ya Yasón koluka Pólo na Síla mpô ’te básámbisa bangó o likita lya bato ba mbóka. | |
Acts | LinVB | 17:6 | Awa bamóní Pólo na Síla té, babéndí Yasón na bandeko ba yě basúsu o bosó bwa bakonzi, bagángí : « Bato baye bakobimisaka mobúlú o mokili mobimba bakómí áwa. | |
Acts | LinVB | 17:7 | Yasón moto ayambí bangó epái ya yě. Bangó bánso babóyí kotósa mitíndo mya Kaizáro, balobí ’te mokonzi mosúsu azalí, óyo bakobéngaka Yézu. » | |
Acts | LinVB | 17:10 | Bobélé na butú bôná, bandeko batíndí Pólo na Síla nokí bákende o Beréa. Ekómí bangó kúná, bayíngélí o sinagóga ya ba-Yúda. | |
Acts | LinVB | 17:11 | Kasi ba-Yúda baye bazalákí bato ba bobóto, leka baye ba Tesaloníki. Bazalákí na mpósá ya koyóka Liloba lya Nzámbe. Mokolo na mokolo bazalákí komanyola Minkandá, bámóno bôngó sókó matéya mâná mazalí ma sôló. | |
Acts | LinVB | 17:12 | Bato baíké o ntéi ya bangó bakómí koyamba ; sé bôngó o ntéi ya ba-Gréki básí ba lokúmu baíké mpé babáli ebelé. | |
Acts | LinVB | 17:13 | Kasi eyókí ba-Yúda ba Tesaloníki ’te Pólo azalákí kosangela Liloba lya Nzámbe o Beréa lokóla, bayéí kúná kotía mobúlú o ntéi ya bato mpé kotombokisa bangó. | |
Acts | LinVB | 17:14 | Bôngó bandeko batíndí Pólo nokí ákende epái ya libóngo lya mbú, kasi Síla na Timotéo batíkálí o engumbá. | |
Acts | LinVB | 17:15 | Baye bakeí kotíka Pólo, bakeí na yě kín’o Aténe, na nsima bazóngí. Pólo atíndí maloba ’te Síla na Timotéo bálanda yě nokí. | |
Acts | LinVB | 17:16 | Ntángo Pólo azalákí kozila bangó o Aténe, ayókí motéma nkándá na bomóni ’te engumbá etóndí na bikeko. | |
Acts | LinVB | 17:17 | Bôngó akeí o sinagóga kosolola na ba-Yúda mpé na baye bakokúmisaka Nzámbe ; mokolo na mokolo asálí mpé bôngó na bato baye akútí o zándo. | |
Acts | LinVB | 17:18 | Ezalákí wâná atâ bato ba filozofía, ba Epikúria mpé ba Stóa, bayéí kosolola na yě. Basúsu balobí : « Esopa óyo alingí koloba níni ? » Basúsu balobí : « Mbele azalí kosangela banzámbe ba bampaya ». Balobí bôngó mpô azalákí kosangela bangó Yézu mpé Nsékwa. | |
Acts | LinVB | 17:19 | Bôngó bakamátí yě mpé bakeí na yě o Areopágo ; balobí na yě : « Tokokí koyéba ntína ya matéya ma sika ozalí kotéya ? | |
Acts | LinVB | 17:21 | Ya sôló, bato ba Aténe mpé bampaya bakofándaka kúná bazalákí kolekisa ntángo míngi na masoló mpé na boyóki nsango ya sika. | |
Acts | LinVB | 17:22 | Bôngó Pólo atélémí o káti ya Areopágo mpé alobí : « Bato ba Aténe, namóní ’te bínó bolingí makambo ma Nzámbe míngi. | |
Acts | LinVB | 17:23 | Mpô ntángo nazalákí kotámbola o engumbá ya bínó, natálí bikeko bínó bokosámbelaka ; namóní mpé altáre yǒ kó esíká ekomámí : ‘Oná nzámbe óyo toyébí té’. Bôngó, ngáí nayéí koyébisa bínó óyo bokokúmisaka, atâ boyébí yě té. | |
Acts | LinVB | 17:24 | Nzámbe óyo akelí mokili ná mpé bínso bizalí wâná. Yě Mokonzi wa likoló na nsé akofándaka o Témpelo té iye itóngámí na mabóko ma bato. | |
Acts | LinVB | 17:25 | Asengélí na lisálisi lya bato té, atâ na níni, mpô yě méí akopésaka bato bánso bomoi, mpéma mpé bilóko bínso. | |
Acts | LinVB | 17:26 | Bobélé yě moto abimísí mabótá mánso ma bato na moto mǒkó, mpô ’te báfánda o mikili mínso mya nsé mobimba ; akabólí bileko bya elanga mpé bya mbúla, mpé akátí ndelo ya bikólo esíká bato bakofánda. | |
Acts | LinVB | 17:27 | Asálí bôngó mpô ’te bato báluka Yě Nzá-mbe, mpô bámeka kokóma epái ya Yě, zambí azalí mosíká na mǒkó mǒkó wa bísó té. | |
Acts | LinVB | 17:28 | Ya sôló, yě moto akopésaka bísó bomoi ná ngúyá ya kotámbola mpé akozalisaka bísó, sé lokóla basúsu o ntéi ya bínó bakomákí : ‘Bísó mpé tozalí bato ba libótá lya yě ’. | |
Acts | LinVB | 17:29 | Kasi sókó tozalí bato ba libótá lya Nzámbé, tókanisa té ’te Nzámbe azalí lokóla wólo tǒ ebendé tǒ libángá, biye bisálémí na mabóko mpé na mayéle ma bato. | |
Acts | LinVB | 17:30 | O bileko bisúsu bato bayébákí Nzámbé té, nzókandé Nzámbe atálákí yangó mpámba ; kasi sikáwa atíndí ’te bato o bikólo bínso bábóngola mitéma : | |
Acts | LinVB | 17:31 | atíí mokolo moye akosámbisa bato ba nsé mobimba na bosémbo ; asílí aponí óyo akosámbisa bangó ; alakísí yangó na bato bánso áwa asékwísí yě o bawá. » | |
Acts | LinVB | 17:32 | Eyókí bangó likambo lya nsékwa ya bawá, basúsu basekí, basúsu balobí : « Tokoyóka yǒ naíno mokolo mosúsu na likambo lyangó. » | |
Chapter 18
Acts | LinVB | 18:2 | Kúná akútání na mo-Yúda mǒkó nkómbó ’te Akwíla, moto wa Pónto ; elongó na mwásí wa yě Priskíla aútákí o Itália, zambí Klódio atíndákí ’te ba-Yúda bánso bálongwa o Róma. Pólo akeí kofánda epái ya bangó ; | |
Acts | LinVB | 18:3 | áwa bazalákí kosála mosálá sé mǒkó, kosála kapó ya biéma, Pólo atíkálí epái ya bangó mpé asálí kúná. | |
Acts | LinVB | 18:4 | Mikolo mínso mya sábato Pólo azalákí kosakola o sinagóga mpé amekí kondimisa ba-Yúda na ba-Gréki. | |
Acts | LinVB | 18:5 | Ntángo Síla na Timotéo baútákí o Masedónia mpé bakómí o Korínti, Pólo amípésí mobimba na mosálá mwa bosangeli Liloba na bolakisi ba-Yúda ’te Yézu azalí Krístu. | |
Acts | LinVB | 18:6 | Kasi, áwa ba-Yúda babóyí maloba ma yě mpé bafíngí yě, apupólí mputulú ya bilambá bya yě, mpé alobí na bangó : « Maye makokwêla bínó matálí sé bínó mǒkó ! Ngáí nazalí na likambo lyǒkó té, bandá leló nakokende epái ya bapagáno. » | |
Acts | LinVB | 18:7 | Elongwí yě kúná, akeí o mbóka Títio Yústo, moto azalákí kokúmisa Nzámbe ; ndáko ya yě ezalákí penepene na sinagóga. | |
Acts | LinVB | 18:8 | Kríspo, mokonzi wa sinagóga, ayambí Mokonzi, yě na libótá lya yě mobimba. Bato baíké ba Korínti bayókákí Pólo bakómí koyamba mpé bakúlí batísimo. | |
Acts | LinVB | 18:9 | Mokolo mǒkó na butú Mokonzi abimélí Pólo na limóní, alobí na yě : « Obánga té, kóbá kosakola, ótíka koloba té. | |
Acts | LinVB | 18:10 | Ngáí nazalí na yǒ, moto mǒkó akomeka kosála yǒ mabé té, mpô bato ba ngáí bazalí míngi o engumbá eye. » | |
Acts | LinVB | 18:12 | Ntángo Gálio azalákí moyángeli wa Akáya, ba-Yúda bayókání ’te bakotombokela Pólo. Bakambí yě o esámbi, | |
Acts | LinVB | 18:13 | mpé balobí : « Moto óyo azalí komeka kondimisa bato ’te bákúmisa Nzámbe na ndéngé Mobéko mokolingisaka té. » | |
Acts | LinVB | 18:14 | Ntángo Pólo alingí koloba, Gálio alobí na ba-Yúda : « Bínó ba-Yúda, sókó moto óyo asálákí mabé mpenzá tǒ likambo linéne, mbele nayókákí bínó bǒ ebongí. | |
Acts | LinVB | 18:15 | Kasi áwa bozalí kowélana ntembe mpô ya maloba, nkómbó mpé Mobéko mwa bínó mǒkó, etálí sé bínó ! Ngáí nabóyí kokóto o makambo mâná. » | |
Acts | LinVB | 18:17 | O ntángo êná bangó bánso bakangí Sosténe, mokonzi wa sinagóga, mpé babétí yě o libándá lya esámbi ; kasi Gálio atálí yangó sé mpámba. | |
Acts | LinVB | 18:18 | Pólo atíkálí naíno mwâ mikolo o Korínti ; na nsima atíkí bandeko, akwélí o masúwa mpé akeí o Síria. Priskíla na Akwíla bakeí na yě elongó. O Kenkréa Pólo akókólí motó mpô ya elakó alakélákí. | |
Acts | LinVB | 18:19 | Ntángo bakómí o Eféze, atíkí báníngá ba yě, akótí o sinagóga mpé asolólí na ba-Yúda. | |
Acts | LinVB | 18:21 | Nzokandé ntángo atíkí bangó alobí : « Nakozónga epái ya bínó mokolo mosúsu, sókó Nzámbe alingí. » Bôngó atíkí Eféze, | |
Acts | LinVB | 18:23 | Aúmélí mwâ mikolo kúná, na nsima akeí lisúsu mpé akátísí mikili mya Galáta na Frígia mpô ya koléndisa bayékoli bánso. | |
Acts | LinVB | 18:24 | Mo-Yúda mǒkó wa Alesándria, nkómbó ’te Apólos, ayákí o Eféze. Moto óyo wa ntókí ya bosololi, ayébí Minkandá Misántu malámu mpenzá. | |
Acts | LinVB | 18:25 | Batéyákí yě Nzelá ya Mokonzi ; na motéma mpíkó azalákí kosakola mpé kotéya mambí mánso matálí Yézu, nzókandé ayébákí bobélé batísimo ya Yoáne. | |
Acts | LinVB | 18:26 | Abandí koloba na moléndé o sinagóga. Awa Priskíla na Akwíla bayókí yě, bakeí na yě elongó mpé balimbólélí yě malámu mambí mánso ma Nzelá ya Nzámbe. | |
Acts | LinVB | 18:27 | Awa alingí kokende o Akáya, bandeko baléndísí yě mpé bakomélí bayékoli monkandá mpô ’te báyamba yě malámu. Ekómí yě kúná, asálísí bakrístu míngi na ngúyá ya Nzámbe. | |
Chapter 19
Acts | LinVB | 19:1 | Ntángo Apólos azalákí o Korínti, Pólo akátísí mokili mwa ngómbá mpé akómí o Eféze. Kúná akútání na bayékoli basúsu, | |
Acts | LinVB | 19:2 | atúní bangó : « Bokúlí Elímo Sántu mokolo bondimákí eyamba ? » Bangó bazóngísélí yě : « Bísó toyókí naíno té ’te Elímo Sántu azalí. » | |
Acts | LinVB | 19:3 | Bôngó Pólo atúní bangó : « Bínó bokúlákí batísimo níni ? » Bazóngísí : « Batísimo ya Yoáne. » | |
Acts | LinVB | 19:4 | Pólo alobí : « Yoáne abátísákí bato baye bandimákí kobóngola mitéma, mpé alobákí na bato ’te báyamba moto óyo akoyâ nsima ya yě, yě ndé Yézu. » | |
Acts | LinVB | 19:6 | Pólo atíélí bangó mabóko mpé Elímo akitélí bangó. Babandí koloba nkóta ndéngé na ndéngé mpé kosakola lokóla baproféta. | |
Acts | LinVB | 19:8 | Pólo ayíngélí o sinagóga ; sánzá ísáto azalákí kotéya na moléndé mambí ma Bokonzi bwa Nzámbe, mpé asálí mánso mpô ’te bato báyamba. | |
Acts | LinVB | 19:9 | Nzókandé bato basúsu balakísí motó makási mpé babóyí koyamba ; o míso ma bato bánso babandí kotóngo baye bakolandaka Nzelá ya Yézu. Bôngó Pólo atíkí bangó mpé akeí na bayékoli o ndáko ya kelási ya Tiranos ; kúná azalákí kotéya mikolo mínso. | |
Acts | LinVB | 19:10 | Asálí bôngó mbúla íbalé, mpé bato bánso ba Azía, ná ba-Yúda ná ba-Gréki, bayókí Liloba lya Mokonzi. | |
Acts | LinVB | 19:12 | batíélí bato ba bokóno bilambá bya motó mpé miláto miye Pólo alátákí : bôngó babíkí o bokono bwa bangó mpé bilímo bibé bitíkí bangó. | |
Acts | LinVB | 19:13 | Ba-Yúda basúsu, baye bakotá-mbolaka bipái bínso mpô ya kobengana bazábolo, bamekí kobengana bilímo bibé o nkómbó ya Mokonzi Yézu, na maloba maye : « Natíndí bínó bóbima o nkómbó ya Yézu óyo Pólo azalí kosakola. » | |
Acts | LinVB | 19:14 | Bána nsambo ba Skéva, yě azalákí nganga mokonzi mpé mo-Yúda, bazalákí kosála sé bôngó. | |
Acts | LinVB | 19:15 | Kasi elímo ebé azóngísélí bangó : « Nayébí Yézu, Pólo mpé nayébí yě, kasi bínó ndé banáni ? » | |
Acts | LinVB | 19:16 | Mpé moto óyo azalákí na elímo ebé akwêlí bangó o nzóto, akwêísí bangó bánso mpé anyókólí bangó míngi ; áwa bazokizokí mpótá, bakímí bolúmbú o ndáko. | |
Acts | LinVB | 19:17 | Bato bánso ba Eféze, ná ba-Yúda ná ba-Gréki, bayókí likambo lyangó, bayókí nsómo mpé bakúmísí nkómbó ya Mokonzi Yézu. | |
Acts | LinVB | 19:18 | O ntéi ya bato bakómí koyamba, bato baíké bayéí kondima ’te bazalákí kosála makambo ma líkundú. | |
Acts | LinVB | 19:19 | Bato baíké bamípésákí na makambo ma bikelákela bayéí na minkandá mya bangó, batumbí myangó o míso ma bato bánso. Batángí motúya mwa minkandá mîná, bamóní ’te mokokí na bibendé bya paláta nkóto ntúkú ítáno. | |
Acts | LinVB | 19:21 | Nsima ya makambo mâná, Pólo akání koleka o Masedónia mpé o Akáya, nsima ákende o Yerúzalem. Akanísí : « Sókó nalongwí kúná, nasengélí kokende mpé o Róma. » | |
Acts | LinVB | 19:22 | Bôngó atíndí basálisi ba yě bábalé Timotéo na Erásto o Masedónia ; kasi yě mǒkó aúmélí naíno mwâ moké o Azía. | |
Acts | LinVB | 19:24 | Moto mǒkó nkómbó ’te Demétrio, yě motúli wa paláta, azalákí kosála na paláta bikeko biké bya témpelo ya Artémis ; azwělí bato ba yě bôngó mosolo míngi. | |
Acts | LinVB | 19:25 | Asangísí bangó elongó na bato basúsu bakosálaka mosálá môná, alobí na bangó : « Bandeko, boyébí ’te tokozwaka bomengo bwa bísó sé na mosálá moye. | |
Acts | LinVB | 19:26 | Kasi bomóní mpé boyókí maye moto óyo Pólo akosálaka ; bobélé o Eféze té, kasi o Azía mobimba akondimisaka bato ebelé maloba ma yě. Akolobaka ’te bikeko bisálémí na mabóko ma bato bizalí banzámbe ba sôló té. | |
Acts | LinVB | 19:27 | Yangó ekokí kobébisa bobélé mosálá mwa bísó té, kasi ekobébisa mpé lokúmu la témpelo ya nzámbe monéne Artémis ; mbele bato bakotíka kokúmisa nzámbe óyo basámbelaka o Azía mpé o mokili mobimba. » | |
Acts | LinVB | 19:28 | Awa bayókí yangó, batokí na nkándá mpé bagángí : « Lokúmu na Artémis wa ba-Eféze ! » | |
Acts | LinVB | 19:29 | Engumbá mobimba ekómí mobúlú. Bato míngi bayéí mbángu epái ya libándá lya masano. Bakangí ba-Masedónia Gáyo na Aristárko mpé babéndí bangó o esíká êná ; bangó basálákí mobémbo elongó na Pólo. | |
Acts | LinVB | 19:31 | Bakóló basúsu ba Azía, bayébani ba Pólo, batíndélí yě maloba mpô ’te ákende o libándá lya masano té. | |
Acts | LinVB | 19:32 | Lisangá mobimba likómí sé mobúlú mobúlú ; bato bánso bazalákí kogánga maloba ndéngé na ndéngé ; bato baíké bayébí mpé té ntína níni basangání kúná. | |
Acts | LinVB | 19:33 | Bato basúsu o ntéi ya bangó bayébísí Alesándro ntína ya likambo, bôngó ba-Yúda bapúsí yě ákende libosó. Alesándro atómbólí lobóko mpô ya kolakisa ’te alingí koloba na bato. | |
Acts | LinVB | 19:34 | Kasi, áwa bamóní ’te azalákí mo-Yúda, bato bánso babandí kogánga mongóngó sé mǒkó ; ngonga sókí íbalé bazalákí kogánga : « Lokúmu na Artémis wa Eféze ! » | |
Acts | LinVB | 19:35 | Mokomi-minkandá wa mbóka akitísí mitéma mya bato, alobí : « Bato ba Eféze, náni moto abúngí ’te ba-Eféze bakokéngeleke témpelo ya Artémis wa lokúmu, ná mpé ekeko eye ekwéyákí áwa út’o likoló ? | |
Acts | LinVB | 19:36 | Mpô yangó ezalí na ntembe sókí moké té ; yangó wâná bófánda nyê mpé bósála bozóba té. | |
Acts | LinVB | 19:37 | Boyéí na bato baye áwa : bangó babébísí bikeko o témpelo té, batúkí mpé nzámbe mwásí wa bísó té. | |
Acts | LinVB | 19:38 | Sókó Demétrio na basáli ba yě bazalí na likambo na moto mǒkó, báyéba ’te esámbi ezalí, bazúzi mpé bazalí ; bôngó báfúndana kúná. | |
Acts | LinVB | 19:39 | Mpé sókó bozalí na likambo lisúsu, tósangana likita engébéné na mobéko mpô tókáta likambo. | |
Chapter 20
Acts | LinVB | 20:1 | Nsima ya mobúlú mwangó, Pólo abéngí bayékoli mpé aléndísí bangó mitéma ; apésí bangó mbóte ya bokabwani mpé akeí o Masedónia. | |
Acts | LinVB | 20:2 | Akátísí ekólo êná, aléndísí bandeko na maloba maíké mpé akómí o mokili mwa ba-Gréki. | |
Acts | LinVB | 20:3 | Kúná aúmélí sánzá ísáto. Ntángo alingí ákwéla o masúwa mpô ya kokende o Síria, ba-Yúda basangání likita mpô ya koboma yě ; yangó wâná akání kozónga o nzelá ya Masedónia. | |
Acts | LinVB | 20:4 | Báníngá bakeí na yě nzelá yǒ kó : Sópatros, mwána wa Píro, moto wa Beréa ; Aristárko na Sekúndo, bato ba Tesaloníki ; Gáyo, moto wa Dérbe ; Timotéo, Tísiko na Trofímo, bato ba Azía. | |
Acts | LinVB | 20:6 | Kasi bísó totíkí Filípi bobélé nsima ya mikolo mya feti ya Mámpa mazángí nkísi ; tolandí nzelá ya mái, mpé nsima ya mikolo mítáno tokútí bangó o Tróas ; kúná tofándí póso mobimba. | |
Acts | LinVB | 20:7 | Mokolo nsima ya sábato, tosa-ngání mpô ya kobúka mámpa ; áwa Pólo alingí kokende mokolo mwa nsima, asolólí na bangó. Abéndí lisoló lya yě kín’o káti ya butú. | |
Acts | LinVB | 20:9 | Elengé mobáli mǒkó, nkómbó ’te Etíko, afándí o mpembéni ya lininísa. Ntángo Pólo azalákí koúmisa matéya, mpongí ekangí yě makási. Elálí yě mpongí, akwéí o nsé út’o mokili mwa mísáto. Batómbólí yě, kasi asílí akúfí. | |
Acts | LinVB | 20:10 | Pólo akití, asunámí penepene na yě, atómbólí yě na mabóko, alobí na bato : « Bóbánga té, azalí naíno na bomoi. » | |
Acts | LinVB | 20:11 | Azóngí lisúsu o mokili mwa ndáko, abúkí mámpa mpé aléí mangó, asolólí naíno míngi na bangó téé ntóngó saa, na nsima akeí. | |
Acts | LinVB | 20:13 | Bísó tolongwí libosó, tokwélí o masúwa mpô tókende o Asos ; kúná tolingákí kokamata Pólo o masúwa. Yě moto alobákí na bísó bôngó, mpô alingákí kokende o nzelá ya mokili. | |
Acts | LinVB | 20:15 | Tolongwí kúná o mokolo mwa nsima mpé tokómí penepene na esanga Kios. Nsima ya mokolo mǒkó tokómí o esanga Samos, mpé nsima ya mokolo mǒkó lisúsu tokómí o Miléte. | |
Acts | LinVB | 20:16 | Pólo akánákí koséme o Eféze té, mpô ya kolekisa ntángo o Azía té. Alingí kokende mbángu mpô ’te, sókó ekokí, ázala o Yerúzalem o mokolo mwa Pentekóste. | |
Acts | LinVB | 20:18 | Ekómí bangó epái ya yě, alobí na bangó : « Boyébí bóníbóní nazalákí kofánda o ntéi ya bínó út’o mokolo nakómákí o Azía mbala ya yambo, | |
Acts | LinVB | 20:19 | nasálélákí Mokonzi sé na bosáwa ; nalelákí míngi mpé nayókákí mpási, zambí ba-Yúda bazalákí kokánela ngáí. | |
Acts | LinVB | 20:20 | Nabómbélákí bínó likambo lyǒ kó té likokákí kobongela bínó ; nasakólákí mpé natéyákí bínó o bisíká bato bakosanganaka mpé o ndáko ya bínó ; | |
Acts | LinVB | 20:21 | nabóndélákí ba-Yúda ná ba-Gréki ’te bábóngola mitéma, bátósa Nzámbe mpé báyamba Yézu Mokonzi wa bísó. | |
Acts | LinVB | 20:22 | Tálá, áwa Elímo akangí ngáí, nakokende o Yerúzalem. Nayébí té níni ekokwêla ngáí kúná. | |
Acts | LinVB | 20:23 | Nayébí bobélé mpô yǒ kó : Elímo Sántu akoyébisaka ngáí o bingumbá bínso ’te minyolólo mpé minyóko mizalí kozila ngáí kúná. | |
Acts | LinVB | 20:24 | Kasi likambo té, nazalí kotála bomoi bwa ngáí lokóla elóko mpámba, násílisa bobélé mosálá Mokonzi Yézu apésí ngáí : kosakola Nsango Elámu ya bolingi bwa Nzámbe. | |
Acts | LinVB | 20:25 | Nalekí o mbóka bínó mpé nasangélí Bokonzi bwa Nzámbe ; sikáwa nayébí ’te bokomóno elongi ya ngáí lisúsu té. | |
Acts | LinVB | 20:26 | Yangó wâná nayébísí bínó leló : sókó o ntéi ya bínó moto mǒkó abúngámí, ezalí mpô ya ngáí té ; | |
Acts | LinVB | 20:28 | Bínó mǒkó bómíbátela mpé bótálaka etónga mobimba malámu. Elímo Sántu aponí bínó bózala bayángeli mpô ya kokamba Eklézya ya Nzámbe ; yě mǒkó asikólí yangó na makilá ma Mwána wa yě mpenzá. | |
Acts | LinVB | 20:29 | Awa nakokende, nayébí ’te nsima ya ngáí nkoi ikoyíngela o ntéi ya bínó mpô ya kobébisa etónga, | |
Acts | LinVB | 20:30 | atâ o ntéi ya bínó bato bakobima, baye bakoloba makambo ma lokutá mpé bakomeka kobénda bayékoli mpô ’te bálanda bangó. | |
Acts | LinVB | 20:31 | Yangó wâná bókéngele mpé bókundola o mitéma ’te mbúla ísáto mobimba, butú mói, na mái o míso, nalembékí té kopálela mǒkó mǒkó wa bínó. | |
Acts | LinVB | 20:32 | Sikáwa nakotíka bínó o mabóko ma Mokonzi ; Liloba lya ngrásya ya yě líbátela bínó ; lizalí na ngúyá ya kotónga Eklézya, likokí kozwela bínó likabo lya lisangó elongó na baye bánso yě asántísí. | |
Acts | LinVB | 20:34 | Bínó mǒkó boyébí : nasálí mosálá na mabóko ma ngáí mpô ’te bísó na báníngá tózwa biye bisengélí na bísó. | |
Acts | LinVB | 20:35 | Nalakísákí bínó na ndéngé ínso ’te tosengélí kosála bôngó mpô ya kosálisa baye bakélélí. Bókanisa mpé maloba maye Mokonzi Yézu yěméí alobákí : kokaba elekí kozwa na esengo. » | |
Chapter 21
Acts | LinVB | 21:1 | Awa tokabwání na bangó na mpási o motéma, tokwélí o masúwa, tokeí kín’o esanga Kos ; nsima ya mokolo mǒkó tokómí o Ródos ; tolongwí kúná mpé tokeí o Pátara. | |
Acts | LinVB | 21:3 | Ekómí bísó penepene na Sípro, totíkí esanga o lobóko la mwásí mpô ya kokende o Síria ; tosémí o Tíro, mpô basengélákí kobimisa bilóko o masúwa kúná. | |
Acts | LinVB | 21:4 | Ekútí bísó bayékoli kúná, totíkálí wâná mikolo nsambo. Elímo atíndí bangó báloba na Pólo ’te ákende o Yerúzalem té. | |
Acts | LinVB | 21:5 | Kasi áwa mikolo mya bísó mikokí, tokeí. Bánso, ná básí ná bána, bakeí kotíka bísó o libándá lya engumbá : tofukámí o libóngo, tosámbélí | |
Acts | LinVB | 21:7 | Tolongwí o Tíro mpé o nsúka ya mobémbo na masúwa, tokómí o Tolemáis. Tokeí kopésa bandeko mbóte mpé tofándí na bangó mokolo mǒkó. | |
Acts | LinVB | 21:8 | Etání ntóngó, tokeí lisúsu mpé tokómí o Sezaréa. Kúná tokótí o ndáko ya Filípo, motéyi wa Nsango Elámu, mpé tofándí epái ya yě ; azalákí mǒkó wa bato nsambo baye baponómókí o Yerúzalem. | |
Acts | LinVB | 21:11 | Ayéí epái ya bísó, akamátí nkámba ya Pólo, amíkangí na yangó makolo na mabóko, mpé alobí : « Elímo Sántu alobí boye : Ba-Yúda bakokanga nkóló wa nkámba eye o Yerúzalem, mpé bakokaba yě o mabóko ma bapagáno. » | |
Acts | LinVB | 21:12 | Eyókí bísó maloba mayé, bísó mǒkó ná bato ba Sezaréa tobóndélí Pólo ákende o Yerúzalem té. | |
Acts | LinVB | 21:13 | Kasi yě azóngísí : « Ntína níni bolingí kobóngola makanisi ma ngáí na boleli bwa bínó ? Nasílí namíléngélí, bakokí kokanga ngáí bôngó o Yerúzalem, nandimí mpé kokúfa mpô ya nkómbó ya Mokonzi Yézu. » | |
Acts | LinVB | 21:14 | Awa tokokí kobóngola makanisi ma yě té, totíkí kobóndela yě, tolobí : « Esálema sé lokóla Nzámbe alingí ! » | |
Acts | LinVB | 21:16 | Bayékoli basúsu ba Sézaréa bakeí na bísó nzelá yǒ kó ; bazwělí bísó esíká ya kofánda o ndáko ya moto mǒkó nkómbó ’te Menázo, moto wa Sípro, mǒkó wa bayékoli ba yambo. | |
Acts | LinVB | 21:18 | Mokolo mwa nsima Pólo akeí na bísó o epai ya Yakóbo ; bakóló bánso mpé basangání wâná. | |
Acts | LinVB | 21:19 | Pólo apésí bangó losáko mpé asolólí na bangó maye mánso Nzámbe asálákí na mosálá mwa yě o bikólo bisúsu. | |
Acts | LinVB | 21:20 | Eyókí bangó bôngó, bakúmísí Nzámbe, mpé balobí na Pólo : « Omóní, ndeko, ba-Yúda nkóto na nkóto bakómí koyamba ; bánso bazalí kotósa Mobéko na motéma mobimba. | |
Acts | LinVB | 21:21 | Nzókandé basílí bayókí ’te yǒ, na matéya ma yǒ, olingí kotínda ba-Yúda baye bafándí o bikólo bisúsu ’te bábóya Mobéko mwa Móze ; okolobaka mpé na bangó ’te bátíka kokátisa bána nzóto mpé bálanda mimeseno mya ba-Yúda té. | |
Acts | LinVB | 21:23 | Bôngó sálá sé lokóla tokoyébisa yǒ : Tozalí áwa na babáli bánei baye balayákí ndaí. | |
Acts | LinVB | 21:24 | Kendé na bangó, ómípétola elongó na bangó mpé fútá mosolo mpô ’te bákókola bangó mitó. Bôngó bato bánso bakoyéba ’te nsango ya yǒ bayókákí ezalí ya sôló té ; bakoyéba mpé ’te yǒ ozalí sé kotósa Mobéko mwa Móze. | |
Acts | LinVB | 21:25 | Mpô ya maye matálí bapagáno bakómí koyamba, na monkandá tosílí toyébísí bangó mikáno mya bísó : bátíka kolía biléi biye babonzélí bikeko, ná makilá ná mpé nyama itangí makilá té ; bátíka mpé mabála mapekísámí na mibéko. » | |
Acts | LinVB | 21:26 | Etáni ntóngó, Pólo akeí na bato baye, amípétólí elongó na bangó mpé ayíngélí o Témpelo ; ayébísí bato ntángo níni mikolo mya bomípétoli mikosíla, lokóla ’te : mikolo níni bakobonza libonza lya moto mǒkó mǒkó. | |
Acts | LinVB | 21:27 | Etíkálákí moké mikolo nsambo mísíla, ba-Yúda ba Azía bamóní Pólo o Témpelo. Batombókísí bato, bakangí yě, | |
Acts | LinVB | 21:28 | mpé bagángí : « Bato ba Israél, yákáni kosálisa bísó ! Yě moto akotéyaka bipái bínso ’te bato bábóya ekólo ya bísó, Mobéko mwa Móze mpé Témpelo eye esántu ! Akótísí mpé ba-Gréki o Témpelo mpé asántólí Esíká esántu eye. » | |
Acts | LinVB | 21:29 | Balobí bôngó zambí bamónókí Trofímo, moto wa Eféze, o engumbá elongó na Pólo ; bôngó bakanísí ’te akótísákí yě o Témpelo. | |
Acts | LinVB | 21:30 | Engumbá mobimba ebúlúngání, bato ebelé bayéí kosangana o esíká êná ; bakangí Pólo, babéndí yě o libándá lya Témpelo mpé sé o ntángo êná bakangí bizibeli bya yangó. | |
Acts | LinVB | 21:31 | Ntángo balukí koboma yě, mokonzi wa basodá ayókí ’te Yerúzalem mobimba ekómí mobúlú. | |
Acts | LinVB | 21:32 | Abéngí basodá na bakomandá nokí mpé akeí na bangó o esíká bato bazalákí kotomboko. Awa bato bamóní ’te mokonzi na basodá bayéí, batíkí kobéte Pólo. | |
Acts | LinVB | 21:33 | Mokonzi wa basodá abelémí, akangí Pólo mpé atíndí ’te bákanga yě na minyolólo míbalé. Na nsima atúní bato sókó yě azalí náni mpé likambo níni asálí. | |
Acts | LinVB | 21:34 | Kasi bato bazalákí kogánga makambo ndéngé na ndéngé. Mokonzi wa basodá akokí koyéba ntína ya likambo liye té, mpô makeléle malekí míngi ; bôngó atíndí ’te bákamba Pólo o nganda ya basodá. | |
Acts | LinVB | 21:35 | Ntángo Pólo akómí penepene na ebuteli, basodá basengélí komeme Pólo o mabóko, mpô ya nkándá ya bato. | |
Acts | LinVB | 21:37 | Awa balingákí kokótisa Pólo o nganda ya basodá, alobí na mokonzi : « Okokí kolingisa ngáí ’te náyébisa yǒ mwâ likambo ? » Oyo atúní yě : « Oyébí lokóta la ba-Gréki ? | |
Acts | LinVB | 21:38 | Yǒ ozalí moto wa Ezípeti té, óyo atombókísákí bobélé o mikolo milekí bato ba Sikári nkóto ínei mpé akambákí bangó o elíkí ? » | |
Acts | LinVB | 21:39 | Pólo ayanólí : « Ngáí nazalí mo-Yúda, moto wa Társi o Silísia ; nazalí mwána mbóka wa engumbá eye eyébání malámu mpenzá. Nabóndélí yǒ, ólingisa ngáí ’te náloba na bato. » | |
Chapter 22
Acts | LinVB | 22:2 | Eyókí bangó ’te abandí koloba na bangó o lokóta la ba-Ebréi, bato bánso bakómí nyê. Pólo alobí : | |
Acts | LinVB | 22:3 | « Ngáí nazalí mo-Yúda ; nabótámí o Társi o Silísia, kasi nakólí áwa o engumbá eye, mpé nayékólí mambí mánso ma Mobéko mwa bankóko malámu mpenzá epái ya Gamáliel. Namípésákí na Nzámbe na motéma mobimba, lokóla bínó bánso bozalí kosála sikáwa. | |
Acts | LinVB | 22:4 | Nazalákí konyókolo mpé koboma bato baye balandí nzelá ya Krístu ; nakangákí básí na babáli na minyolólo, nakótísákí bangó o bolóko. | |
Acts | LinVB | 22:5 | Nganga mokonzi mpé likita mobimba lya bakóló bayébí ’te nazalí koloba makambo ma sôló. Bangó bapésákí ngáí minkandá mpô nákende epái ya bandeko ba Damásko ; nakendékí kúná mpô ’te nákanga bato na minyolólo, mpé náyâ na bangó o Yerúzalem mpô ’te bázwa etúmbu. | |
Acts | LinVB | 22:6 | Ezalákí ngáí o nzelá, nakómí penepene na Damásko, sókí o ngonga ya midí, na mbálákáká mwínda monéne mongengí út’o likoló mpé mozíngí ngáí. | |
Acts | LinVB | 22:7 | Nakwéí o mabelé mpé nayókí loláká la moto alobí na ngáí : ‘Saul, Saul, mpô níni ozalí konyókolo ngáí ?’ | |
Acts | LinVB | 22:8 | Nazóngísí : ‘Mokonzi, yǒ náni ?’ Alobí na ngáí : ‘Ngáí Yézu wa Nazaréte óyo ozalí konyókolo.’ | |
Acts | LinVB | 22:9 | Bato bazalákí na ngáí bamóní mwínda, kasi mongóngó mwa moto azalákí koloba na ngáí bayókákí mwangó té. | |
Acts | LinVB | 22:10 | Bôngó natúní : ‘Mokonzi, násála níni ?’ Mokonzi alobí na ngáí : ‘Télémé mpé kendé o Damásko ; kúná bakoyébisa yǒ mánso osengélí kosála.’ | |
Acts | LinVB | 22:11 | Awa nazalákí komóno lisúsu té mpô ya mwínda môná monéne, báníngá bakambí ngáí na lobóko ; sé bôngó nakómí o Damásko. | |
Acts | LinVB | 22:12 | Ezalákí kúná moto mǒkó Ananía, yě moto wa Nzámbe akotósaka Mobéko ; ba-Yúda bánso ba Damásko bazalákí kokúmisa yě. | |
Acts | LinVB | 22:13 | Yě moto ayéí kotála ngáí, mpé áwa abelémí na ngáí alobí : ‘Saul, ndeko wa ngáí, míso ma yǒ máfungwama.’ Sé o ntángo êná, nakómí komóno yě. | |
Acts | LinVB | 22:14 | Bôngó alobí : ‘Nzámbe wa bankóko ba bísó aponí yǒ út’o kala mpô ’te óyéba maye yě alingí : ómóno bosémbo mpé óyóka loláká la monoko mwa yě ; | |
Acts | LinVB | 22:15 | alingí ’te ózala nzénénéké wa yě o míso ma bato bánso, okoyébisa bangó mánso omóní mpé oyókí. | |
Acts | LinVB | 22:16 | Ozalí kozila níni ? Bôngó ndimá kokúla batísimo mpé bóndélá Mokonzi álímbisa yǒ masúmu.’ | |
Acts | LinVB | 22:17 | Nazóngí o Yerúzalem, mpé mokolo mǒkó, ntángo nazalákí kosámbela o Témpelo, namóní limóní. | |
Acts | LinVB | 22:18 | Mokonzi abimélí ngáí, alobí : ‘Sálá nokí, longwá o Yerúzalem, zambí bato ba engumbá eye bakoyamba maloba ma yǒ té, maye okosakola mpô ya ngáí.’ | |
Acts | LinVB | 22:19 | Nazóngísí : ‘Mokonzi, bayébí malámu ’te nazalákí kokende o sinagóga ínso mpô nákanga o bolóko baye bayambí yǒ mpé nábétisa bangó fímbo. | |
Acts | LinVB | 22:20 | Mokolo babomákí Stéfano, martíro wa yǒ, nazalakí wâná ; nandimákí likambo lya bato babomákí yě, ngáí moto nazalákí kokéngele bilambá bya bangó.’ | |
Acts | LinVB | 22:21 | Mokonzi alobí lisúsu : ‘Kendé, nakotínda yǒ mosíká epái ya bato ba bikólo bisúsu’. » | |
Acts | LinVB | 22:22 | Téé sikáwa ba-Yúda bazalákí koyóka yě. Kasi, áwa alobí bôngó, babandí kogánga : « Longola moto óyo na mokili ! Abongí kotíkala na bomoi té ! » | |
Acts | LinVB | 22:24 | Sikáwa mokonzi wa basodá atíndí ’te bákótisa Pólo o nganda ya basodá, mpé bábéte yě fímbo mpô ’te áyéba ntína níni bato bazalákí kogángela Pólo bôngó na nkándá. | |
Acts | LinVB | 22:25 | Kasi ntángo bakangí yě na nsinga mpô ya kobéte yě fímbo, Pólo alobí na komandá azalákí wâná : « Bokokí ndé kobéte mwána mbóka wa Róma fímbo sókó libosó basámbísí likambo lya yě té ? » | |
Acts | LinVB | 22:26 | Awa komandá ayókí bôngó, akeí koyébisa mokonzi wa basodá : « Olingí kosála níni ? Moto óyo azalí mwána mbóka wa Róma. » | |
Acts | LinVB | 22:27 | Bôngó mokonzi wa basodá ayéí kotúna Pólo : « Lobélá ngáí, ozalí mwána mbóka wa Róma ? » Pólo azóngísí : « Iyo. » | |
Acts | LinVB | 22:28 | Mokonzi alobí : « Ngáí nasengélákí na mosolo míngi mpô ya kosómba likokí lya kozala mwána mbóka wa Róma. » Pólo alobí : « Ngáí nabótámí mwána mbóka wa Róma. » | |
Acts | LinVB | 22:29 | Bôngó na mbala yǒ kó baye balingákí kobéte yě fímbo mpô áloba, batíkí yě. Mokonzi wa basodá mpé akómí kobánga, áwa ayókí ’te akangákí mwána mbóka wa Róma na minyolólo. | |
Chapter 23
Acts | LinVB | 23:1 | Pólo atálí bato ba Likita linéne bánso swíí, alobí : « Bandeko, téé leló nazalí sé kosálela Nzámbe na motéma sémba. » | |
Acts | LinVB | 23:3 | Bôngó Pólo alobí na yě : « Yó efelo bapakólí mpémbé, Nzámbe moto akobéte yó ! Bóní ! Ofándí wâná mpô ya kosámbisa ngáí engébéné na Mobéko, nzókandé otíndí ’te bábéte ngáí ! Mobéko motíndí bôngó té. » | |
Acts | LinVB | 23:4 | Bato bazalákí wâná balobí na yě : « Bóní, obángí té kofínga nganga mokonzi wa Nzámbe ? » | |
Acts | LinVB | 23:5 | Pólo azóngísí : « Bandeko, nayébákí té ’te azalí nganga mokonzi. Zambí ekomámí o Minkandá Misántu ’te : Okobétele mokonzi wa ekólo ya yǒ mobondo té. » | |
Acts | LinVB | 23:6 | Pólo ayébákí ’te o ntéi ya bato basangání wâná basúsu bazalákí ba-Saduséo, basúsu ba-Farizéo. Yangó wâná agángí mpô ’te bato bánso báyóka : « Bandeko, ngáí nazalí mo-Farizéo mpé mwána wa ba-Farizéo. Balingí kosámbisa ngáí, mpô tozalí kotía mitéma na nsékwa ya bawá. » | |
Acts | LinVB | 23:7 | Elobí yě bôngó, ba-Farizéo na ba-Saduséo babandí kowélana ntembe, likita mobimba likabwání. | |
Acts | LinVB | 23:8 | Mpámba té, ba-Saduséo bakolobaka ’te nsékwa ezalí té, ǎnzelú té, elímo mpé té. Kasi ba-Farizéo bakondimaka mâná mánso. | |
Acts | LinVB | 23:9 | Bôngó makeléle mabimí míngi. O káti ya ba-Farizeó batéyi ba Minkandá basúsu batélémí mpé balobí na mongóngó makási : « O míso ma bísó moto óyo azalí na mabé sókí té. Mbele ǎnzelú tǒ elímo alobákí na yě. » | |
Acts | LinVB | 23:10 | Awa bato bakómí koswâna makási, mokonzi wa basodá abángí ’te bakoboma Pólo, yangó wâná atíndí basodá bákende kolongola yě nokí o ntéi ya bangó mpé bákamba yě o nganda ya basodá. | |
Acts | LinVB | 23:11 | Na butú Mokonzi abimélí Pólo, alobí na yé : « Léndísá motéma ! Lokóla ozalákí nzénénéké wa ngáí o Yerúzalem, osengélí kosála sé bôngó o Róma. » | |
Acts | LinVB | 23:12 | Etání ntóngó, ba-Yúda basangání likita mpé balayí ndaí ’te bakolía tǒ bakomele elóko té libosó ’te báboma Pólo. | |
Acts | LinVB | 23:14 | Bakeí epái ya banganga bakonzi na bakóló, balobí na bangó : « Bísó tolayí ’te mabé makokí kokwêla bísó sókó toléí tǒ tomelí atâ elóko níni libosó ’te tóboma Pólo. | |
Acts | LinVB | 23:15 | Bôngó bínó elongó na bato ba Likita linéne, bósénge mokonzi wa basodá átíndela bínó Pólo ; bósála lokóla bolingí kotála lisúsu likambo lya yě malámu mpenzá. Bísó tosílí tomíléngélí mpô tóboma yě libosó ’te ákóma áwa. » | |
Acts | LinVB | 23:16 | Kasi mwána wa ndeko mwásí wa Pólo ayókí ’te balingí kotíela Pólo motámbo bôngó, akeí o nganda ya basodá, ayíngélí mpé akébísí Pólo. | |
Acts | LinVB | 23:17 | Pólo abéngí mǒkó wa bakomandá, alobí na yě : « Kendé na elengé mobáli óyo epái ya mokonzi wa basodá, alingí koyébisa yě mwâ likambo. » | |
Acts | LinVB | 23:18 | Komandá akeí kotíka yě epái ya mokonzi wa basodá mpé alobí : « Moto wa bolóko Pólo abéngí ngáí mpé aséngí ngáí ’te náyâ na elengé mobáli óyo epái ya yǒ ; alingí koyébisa yǒ mwâ likambo. » | |
Acts | LinVB | 23:19 | Mokonzi wa basodá akamátí elengé mobáli na lobóko, abéndí yě mpembéni mpé atúní yě : « Olingí koyébisa ngáí níni ? » | |
Acts | LinVB | 23:20 | Elengé alobí na yě : « Ba-Yúda bayókání ’te bakosénge yǒ ókende na Pólo lóbí o Likita linéne ; bakosála lokóla balingí kotála lisúsu likambo lya yě malámu mpenzá. | |
Acts | LinVB | 23:21 | Ondima maloba ma bangó té. Bato ba bangó leká ntúkú ínei bayókání ’te bakotíela yě motámbo ; balayí ndaí ’te mabé makokí kokwêla bangó sókó baléí tǒ bamelí atâ elóko níni libosó ’te báboma yě. Sikáwa basílí komíléngele mpé bazalí sé kozila ’te okondimela bangó. » | |
Acts | LinVB | 23:22 | Mokonzi wa basodá, áwa alingí kotíka elengé mobáli ákende, atíndí yě ’te : « Oloba na moto mǒkó té ’te oyéí koyébisa ngáí likambo liye. » | |
Acts | LinVB | 23:23 | Na nsima mokonzi wa basodá abéngí bakomandá bábalé, alobí na bangó : « Bómíléngele mpô ya kokende na basodá nkámá íbalé o Sezaréa na ngonga ya ísáto ya ntóngó ; bókende mpé na batámbwisi farása ntúkú nsambo mpé na basodá nkámá íbalé bazalí na makongó. | |
Acts | LinVB | 23:24 | Báléngelele mpé Pólo farása, ábutela yangó, bôngó bákamba yě nzóto kólóngónú epái ya moyángeli Felíkisi. » | |
Acts | LinVB | 23:27 | Ba-Yúda bato bakangákí moto óyo ; etíkálákí moké báboma yě, ntángo nakómí na basodá ba ngáí ; nalongólí yě o mabóko ma bangó, mpô bayébísákí ngáí ’te azalí mwána mbóka wa Róma. | |
Acts | LinVB | 23:28 | Awa nalingákí koyéba ntína níni bafúndákí yě, nakeí na yě o bosó bwa Likita linéne lya bangó. | |
Acts | LinVB | 23:29 | Namóní ’te bafúndí yě na makambo matálí Mobéko mwa bangó, kasi namóní yě na likambo lyǒkó té likokí na etúmbu ya liwá tǒ ya bolóko. | |
Acts | LinVB | 23:30 | Ntángo bayébísákí ngáí ’te balingákí koboma yě, natíndí yě nokí epái ya yǒ mpé nayébísí bato bafúndákí yě ’te bákende kosámba likambo lya yě o mbóka yǒ. » | |
Acts | LinVB | 23:32 | Etání ntóngó basodá ba makolo batíkí basodá ba farása bákóba nzelá na Pólo ; bangó mǒkó bazóngí o nganda ya basodá. | |
Acts | LinVB | 23:33 | Ekómí basodá ba farása o Sezaréa, bapésí moyángeli monkandá môná mpé batíkí Pólo o mabóko ma yě. | |
Acts | LinVB | 23:34 | Moyángeli atángí monkandá mpé atúní Pólo sókó yě moto wa ekólo níni. Awa ayókí ’te azalí moto wa Silísia, | |
Chapter 24
Acts | LinVB | 24:1 | Nsima ya mikolo mítáno, nganga mokonzi Ananía ayéí elongó na bakóló basúsu mpé na molobeli mǒkó nkómbó ’te Tertúlo ; bakeí kofúnda Pólo epái ya moyángeli. | |
Acts | LinVB | 24:2 | Babéngí Pólo, mpé Tertúlo abandí kofúnda yě na maloba maye : « Lokúmu na yǒ, mokonzi Felíkisi ! Mpô ya yǒ tofándí sé na bobóto bwa sôló, okobongisaka mpé makambo maíké o ekólo ya bísó ; | |
Acts | LinVB | 24:4 | Nalingí kolekisa ntángo ya yǒ míngi té, yangó wâná nabóndélí yǒ óyóka bísó mwâ moké na motéma malámu lokóla omeséní. | |
Acts | LinVB | 24:5 | Tomóní ’te moto óyo azalí mobébisi : akotíaka mobúlú epái ya ba-Yúda o mokili mobimba. Azalí mokambi wa lingómbá lyǒ kó lya bato ba Nazaréte. | |
Acts | LinVB | 24:6 | Amekákí kosántola Témpelo, bôngó tokangákí yě. (Tolingákí kosámbisa yě engébéné na Mobéko mwa bísó, | |
Acts | LinVB | 24:7 | kasi mokonzi wa basodá Lísia ayéí kokóto o likambo liye mpé alongólí yě na makási o mabóko ma bísó. | |
Acts | LinVB | 24:8 | Atíndí ’te bato bafúndí yě báyâ epái ya yǒ.) Sókó otúní moto óyo, yǒ mǒkó okomóno ’te makambo tofúndí yě na mangó mazalí ma sôló. » | |
Acts | LinVB | 24:10 | Moyángeli ayébísí Pólo na lobóko ’te áloba, bôngó Pólo alobí : « Nayébí ’te osílí oyángélí ekólo eye mbúla míngi ; nazalí kotía motéma na yǒ áwa nakosámba o míso ma yǒ. | |
Acts | LinVB | 24:11 | Okokí kotúna atâ náni : Elekí bobélé mikolo zómi na míbalé nakendékí o Yerúzalem mpô ya kosámbela. | |
Acts | LinVB | 24:12 | Mokolo mǒkó té bamónókí ngáí nazalákí kowéla ntembe na moto tǒ kotombokisa bato, ézala o Témpelo, ézala o sinagóga tǒ o balabála. | |
Acts | LinVB | 24:13 | Bato bafúndí ngáí bakokí kolakisa yǒ té ’te makambo maye bazalí kofúnda ngáí na mangó sikáwa mazalí ma sôló. | |
Acts | LinVB | 24:14 | Nzókandé nandimí o míso ma yǒ : nazalí kolanda Nzelá eye bangó bakobéngaka ‘lingómbá lyǒkó’ ; kasi nakosálelaka Nzámbe wa bankóko ba bísó na boyambi mambí mánso ma Mobéko ná mpé maye mánso makomámí o Minkandá mya Baproféta. | |
Acts | LinVB | 24:16 | Yangó wâná nazalí komípésa ntángo ínso mpô ’te motéma mwa ngáí mólongobana o míso ma Nzámbe mpé o míso ma bato. | |
Acts | LinVB | 24:17 | Nsima ya mbúla mwâ míngi nazóngákí o Yerúzalem mpô ’te námemela bato ba ekólo ya ngáí makabo mpé nábonzela Nzámbe mabonza. | |
Acts | LinVB | 24:18 | Ba-Yúda basúsu, baye baútákí o Azía, bakútákí ngáí o Témpelo ntángo nasílísí komípétola ; bato bazalákí míngi té, mobúlú mozalákí mpé té. | |
Acts | LinVB | 24:19 | Bangó ndé basengélákí kotéleme o bosó bwa yǒ mpô ya kofúnda ngáí, sókó bazwí ngáí na mwâ likambo. | |
Acts | LinVB | 24:20 | Tǒ bato bazalí áwa báloba sókó na likambo níni bakitísákí ngáí mokolo basámbísákí ngáí o Likita linéne. | |
Acts | LinVB | 24:21 | Mbele bolingí kosámbisa ngáí mpô ya maloba nalobákí na mongóngó makási o bosó bwa Likita linéné : ‘Bozalí kosámbisa ngáí leló mpô ya likambo lya nsékwa ya bawá’. » | |
Acts | LinVB | 24:22 | Felíkisi ayébí malámu makambo mánso ma Nzelá ya Krístu, bôngó ayébísí bangó ’te bázónga mpé básámba mokolo mosúsu, alobí : « Mokolo mokonzi wa basodá Lísia akoyâ, nakokáta likambo lya bínó. » | |
Acts | LinVB | 24:23 | Atíndí komandá ’te bákéngele Pólo o bolóko, kasi bátíkela yě mwâ bonsómí, mpé bápekisa bandeko ba yě té sókó balingí kosálisa yě. | |
Acts | LinVB | 24:24 | Nsima ya mwâ mikolo Felíkisi ayéí na mwásí wa yě Drusíla ; yě azalákí mo-Yúda. Abéngí Pólo mpé ayókí maye ayébísí yě mpô ya boyambi Yézu Krístu. | |
Acts | LinVB | 24:25 | Kasi áwa Pólo abandí koloba mambí maye matálí bosémbo, bopéto mpé mokolo mwa nsúka, Felíkisi akómí kobánga mpé alobí : « Okokí kokende sikáwa ; nakobênga yǒ mokolo mosúsu, sókó nazwí ntángo. » | |
Acts | LinVB | 24:26 | Azalákí na elíkyá ’te Pólo akopésa yě mosolo, yangó wâná azalákí kobênga yě mbala míngi mpô ya kosolola na yě. | |
Chapter 25
Acts | LinVB | 25:3 | ’te ándimela bangó mpô ya likambo lya Pólo, bôngó átínda yě o Yerúzalem ; bazalákí sé kokána kotíela yě motámbo mpô ’te báboma yě o nzelá. | |
Acts | LinVB | 25:4 | Kasi Fésto azóngísélí bangó ’te Pólo asengélí kotíkala o bolóko o Sezaréa, esíká yě mǒkó alingí kokende sikáwa. | |
Acts | LinVB | 25:5 | Alobí : « Bankúmú ba bínó bákende na ngáí nzelá yǒ kó, bôngó sókó moto óyo asálí mabé, báfúnda yě kúná. » | |
Acts | LinVB | 25:6 | Fésto afándí mikolo mwambe tǒ zómi epái ya bangó, na nsima azóngí o Sezaréa ; etání ntóngó, afándí o esámbi mpé atíndí ’te báyâ na Pólo. | |
Acts | LinVB | 25:7 | Ntángo Pólo ayéí, ba-Yúda baútákí o Yerúzalem bazíngí yě, mpé bafúndí yě na makambo manéne maíké, kasi bakokí kolakisa té ’te makambo mâná mazalí ma sôló. | |
Acts | LinVB | 25:8 | Pólo asámbí, alobí : « Nazalí na likambo lyǒ kó té : nabúkí Mobéko mwa ba-Yúda té, nasántólí Témpelo té, natúkí Kaizáro té. » | |
Acts | LinVB | 25:9 | Fésto alingí kosepelisa ba-Yúda, yangó wâná alobí na Pólo : « Ondimí kokende o Yerúzalem, bákáta likambo lya yǒ kúná o míso ma ngáí ? » | |
Acts | LinVB | 25:10 | Kasi Pólo ayanólí : « Natélémí áwa o esámbi ya Kaizáro, basengélí kosámbisa ngáí áwa. Nasálí ba-Yúda mabé mǒkó té, oyébí yangó malámu. | |
Acts | LinVB | 25:11 | Sókó nasálí mabé, sókó nazalí na likambo likokí na etúmbu ya liwá, nabóyí kokúfa té. Kasi sókó makambo maye bafúndí ngáí na mangó, mazalí ma sôló té, moto mǒkó té akokí kokaba ngáí o mabóko ma bangó. Naséngí ’te Kaizáro yě mǒkó ákáta likambo lya ngáí ! » | |
Acts | LinVB | 25:12 | Esílísí Fésto kosolola na balaki ba yě, ayanólí Pólo : « Oséngí ’te Kaizáro ákáta likambo lya yǒ, okokende o mbóka Kaizáro. » | |
Acts | LinVB | 25:13 | Nsima ya mwâ mikolo mokonzi Agrípa na Bereníse bakómí o Sezaréa, bayéí kopésa Fésto mbóte. | |
Acts | LinVB | 25:14 | Baúmélí kúná mwâ mikolo mpé Fésto alimbólélí mokonzi likambo lya Pólo, alobí : « Felíkisi atíkákí moto mǒkó áwa o bolóko. | |
Acts | LinVB | 25:15 | Ntángo nazalákí o Yerúzalem banganga bakonzi na bakóló ba ba-Yúda bayákí kofúnda yě, baséngékí ngáí ’te nákitisa yě o likambo. | |
Acts | LinVB | 25:16 | Nazóngísélí bangó ’te ba-Róma bakokitisaka moto o likambo té, sókó libosó basámbísí yě té o míso ma bato bafúndí yě, mpé sókó azwí nzelá ya komílóngisa té. | |
Acts | LinVB | 25:17 | Bôngó bayéí áwa na ngáí nzelá yǒ kó ; nalekísí ntángo té, mpé bobélé mokolo mwa nsima nafándí o esámbi mpé natíndí ’te báyâ na moto ôná. | |
Acts | LinVB | 25:18 | Ntángo bato baye bafúndí yě bazíngí yě, babimísí likambo lyǒ kó té, liye nakanísákí ’te likokí kokotisa yě. | |
Acts | LinVB | 25:19 | Bazalákí sé kowélana mwâ ntembe mpô ya mambí ma eyamba ya bangó mpé mpô ya moto mǒkó nkómbó ’te Yézu óyo akúfá, nzókandé Pólo alobí ’te azalí na bomoi. | |
Acts | LinVB | 25:20 | Ngáí nakokákí kokáta likambo lya ndéngé eye té, yangó wâná natúní yě sókó alingí kokende o Yerúzalem, bákáta likambo lya yě kúná. | |
Acts | LinVB | 25:21 | Kasi Pólo aséngí ’te Kaizáro moto ákáta likambo lya yě. Bôngó natíndí ’te ákangema kín’o mokolo nakotínda yě o mbóka Kaizáro. » | |
Acts | LinVB | 25:22 | Agrípa alobí na Fésto : « Ngáí mpé nalingí koyóka moto óyo. » Fésto azóngísí : « Okoyóka yě lóbí. » | |
Acts | LinVB | 25:23 | Etání ntóngó, Agrípa na Bereníse bayéí na lipombó linéne mpé bakótí o esíká bakosámbisaka bato, elongó na bakonzi ba basodá mpé na bankúmú ba engumbá. Fésto atíndí ’te báyâ na Pólo, | |
Acts | LinVB | 25:24 | mpé alobí : « Mokonzi Agrípa, mpé bínó bánso bozalí áwa elongó na bísó, táláni moto óyo ; ba-Yúda bánso bayákí kofúnda yě epái ya ngáí, o Yerúzalem mpé áwa ; bazalákí kogánga makási ’te asengélí kokúfa. | |
Acts | LinVB | 25:25 | Nzókandé nazwí yě na likambo lyǒ kó té likokí na etúmbu ya liwá ; kasi yě mǒkó aséngí ’te mokonzi monéne ákáta likambo lya yě, bôngó nakání kotínda yě kúná. | |
Acts | LinVB | 25:26 | Kasi nayébí té níni nakokí kokomela mokonzi monéne mpô ya yě. Yangó wâná nabimísí yě áwa o míso ma bínó, mpé o míso ma yǒ, mokonzi Agrípa, mpô ’te bótúna yě, bôngó náyéba níni nákomela mokonzi monéne. | |
Chapter 26
Acts | LinVB | 26:1 | Agrípa alobí na Pólo : « Okokí koloba, sámbá likambo lya yǒ. » Bôngó Pólo atandí lobóko mpé abandí kosámba, alobí : | |
Acts | LinVB | 26:2 | « Mokonzi Agrípa, nazalí na esengo áwa nakokí kosámba o míso ma yǒ leló maye mánso ba-Yúda bafúndí ngáí na mangó ; | |
Acts | LinVB | 26:3 | zambí oyébí mimeseno mya ba-Yúda ná mpé ntembe ínso bakowélaka. Nabóndélí yǒ, óyóka ngáí na motéma mpío. | |
Acts | LinVB | 26:4 | Ba-Yúda bánso bayébí ezalela ya ngáí út’o bomwána ; bayébí bóníbóní nakólí o Yerúzalem o ntéi ya bato ba ekólo ya ngáí. | |
Acts | LinVB | 26:5 | Bangó bayébí ngáí útá kala ; mpé sókó balingí, bakokí koyébisa ’te nazalákí moto wa lingómbá lya ba-Farizeó, lingómbá liye lilekí mangómbá mánso ma eyamba ya bísó na mibéko makási. | |
Acts | LinVB | 26:6 | Mpé sikáwa balingí kosámbisa ngáí mpô nazalí kotía motéma na elakó eye Nzámbe alakéláká bankóko ba bísó : | |
Acts | LinVB | 26:7 | bato ba mabótá ma bísó zómi na mábalé bakosálelaka Nzámbe butú mói na elíkyá ya bomóni ’te Nzámbe akokokisa elakó êná. Nzókandé mpô ya elí-kyá êná, é mokonzi, ba-Yúda bafúndí ngáí. | |
Acts | LinVB | 26:9 | Libosó nakanísákí ’te nasengélákí kosála mánso mpô ya kopekisa bato koyamba nkómbó ya Yézu wa Nazaréte. | |
Acts | LinVB | 26:10 | Nasálákí bôngó o Yerúzalem : banganga bakonzi bapésákí ngáí likokí, bôngó ngáí mǒkó nabwákákí bayambi baíké o bolóko ; mpé ntángo bazalákí koboma bangó, ngáí mpé nazalákí kondima. | |
Acts | LinVB | 26:11 | Na minyóko miye nayókísí bangó mbala míngi o sinagóga ínso nalingákí kotínda bángo na makási ’te bátúka Nzámbe ; kútu, na nkándá nsúka té, nanyókólókí bangó kín’o bingumbá bya bikólo bisúsu. | |
Acts | LinVB | 26:12 | Na ntína êná nakendékí mpé o Damásko ; banganga bakonzi batí-ndákí ngáí, bangó bapésákí ngáí likokí lyangó. | |
Acts | LinVB | 26:13 | Ezalákí ngáí o nzelá, é mokonzi, penepene na midí namóní mwínda moútí o likoló mozalákí kongenge makási leká mwésé ; mwínda moye mozíngí ngáí ná baye bazalákí na ngáí nzelá yǒ kó. | |
Acts | LinVB | 26:14 | Bísó bánso tokwéí o mabelé mpé nayókí loláká lolobí na ngáí o lokóta la ba-Ebréi : ‘Saul, Saul, ntína níni ozalí konyókolo ngáí ? Ozalí komíyókisa mpási, áwa obóyí etíndá ya ngáí.’ | |
Acts | LinVB | 26:15 | Ngáí natúní : ‘Mokonzi, yǒ náni ?’ Mokonzi alobí : ‘Ngáí nazalí Yézu óyo ozalí konyókolo. | |
Acts | LinVB | 26:16 | Kasi longwá o mabelé mpé télémé. Nabimélí yǒ mpô ’te nákómisa yǒ mosáleli mpé nzénénéké wa ngáí ; óyébisa bato ’te omóní ngáí leló ná mpé maye nakolakisa yǒ naíno nsima. | |
Acts | LinVB | 26:17 | Yangó wâná nalongólí yǒ o káti ya ekólo ya yǒ mpé ya bikólo bya bapagáno, nakotínda yǒ epái ya bangó, | |
Acts | LinVB | 26:18 | mpô ’te ófungola bangó míso, bálongwa o molílí, mpé báyâ epái ya mói, bálongwa mpé o bokonzi bwa Sátana mpé báyâ epái ya Nzámbe ; bôngó báyamba ngáí, bázwa bolímbisi masúmu mpé esíká o káti ya bato baye Nzámbe aponí.’ | |
Acts | LinVB | 26:20 | Kasi nakendékí kotéya libosó bato ba Damásko, o Yerúzalem mpé o ekólo mobimba ya Yudéa, na nsima bapagáno, ’te basengélí kobóngola mitéma mpé kozóngela Nzámbe, mpé básála misálá mibongí na bato babóngólí mitéma. | |
Acts | LinVB | 26:22 | Kasi Nzámbe abátélí ngáí, bôngó téé leló nazalí kosangela nsango eye na bato baké mpé na bato banéne. Nazalí koloba elóko esúsu té, bobélé maye masengélákí kosálema engébéné na maloba ma baproféta mpé ma Móze : | |
Acts | LinVB | 26:23 | Krístu asengélákí koyóka mpási, kasi azalí moto wa libosó óyo asékwí o bawá, mpé akosangela nsango ya mwínda na bato ba ekólo ya bísó mpé ba bikólo bya bapagáno. » | |
Acts | LinVB | 26:24 | Awa Pólo azalákí kosámba bôngó, Fésto alobí na mongóngó makási : « Pólo, obélí ligbómá ! Mayéle ma yǒ ma minkandá matámbwísí yǒ motó ! » | |
Acts | LinVB | 26:25 | Pólo azóngísí : « Nazalí na ligbómá té, tatá mokonzi Fésto, nazalí sé koloba maloba ma bosôló mpé ma bwányá. | |
Acts | LinVB | 26:26 | Mokonzi Agrípa ayébí mambí maye, yangó wâná nakokí koloba na yě polélé ; nayébí malámu ’te abúngí elóko té ; maye mánso masálémí na bonkútú té ! | |
Acts | LinVB | 26:28 | Kasi Agrípa alobí na Pólo : « Etíkálí moké ókómisa ngáí mokrístu na maloba ma yǒ ! » | |
Acts | LinVB | 26:29 | Pólo azóngísí : « Etíkala moké tǒ té, nabóndélí Nzámbe bobélé mpô ya yǒ té, kasi mpé mpô ya baye bánso bazalí koyóka ngáí leló, bákóma lokóla ngáí, kasi na minyolólo miye o mabóko té. » | |
Acts | LinVB | 26:30 | Sikáwa mokonzi atélémí, ná moyángeli, ná Bereníse ná basúsu bafándí elongó na bangó. | |
Acts | LinVB | 26:31 | Babimí mpé balobání : « Moto óyo azalí na likambo lyǒ kó té likokí na etúmbu ya liwá tǒ ya minyolólo. » | |
Chapter 27
Acts | LinVB | 27:1 | Awa bakání ’te tókende o Itália na masúwa, bapésí Pólo na bato basúsu ba bolóko o mabóko ma Yúlio, komandá wa libóké lya basodá monkámá, liye bakobéngaka Ogústa. | |
Acts | LinVB | 27:2 | Tokwélí o masúwa maútí o Adramítio mpé malingí koséme o mabóngo ma Azía, mpé tokeí. Aristárko akeí na bísó, yě moto wa Tesaloníki o Masedónia. | |
Acts | LinVB | 27:3 | Mokolo mwa nsima tosémí o Sidóni. Yúlio alakísí Pólo motéma malámu, alingísí yě ákende kotála báníngá mpô ’te básálisa yě. | |
Acts | LinVB | 27:4 | Elongwí bísó kúná, tolandí libóngo lya esanga Sípro, zambí mompepe molingákí kozóngisa bísó nsima. | |
Acts | LinVB | 27:6 | Kúná komandá amóní masúwa ma Alesándria mazalákí kokende o Itália ; abutísí bísó o masúwa maye. | |
Acts | LinVB | 27:7 | Mikolo mwâ míngi masúwa matámbólí sé malémbe malémbe, mpé bobélé na mpási tokómí pene na Knído. Lokóla mompepe mopekísí bísó kokende libosó, tolekí Salmóne o Súdi ya esanga Kréta : | |
Acts | LinVB | 27:8 | tolandí libóngo bobélé na mpási, mpé tokómí o esíká bakobéngaka ‘Mabóngo malámu’, mosíká té na engumbá Lazáya. | |
Acts | LinVB | 27:9 | Tolekísí mikolo míngi, kútu mokolo mwa boláli nzala mosílí molekí ; botámbwisi masúwa bokómí na likáma. Pólo akébísí bangó na maloba maye : | |
Acts | LinVB | 27:10 | « Batatá, namóní ’te kokóba mobémbo moye ekozánga likáma té : bilóko mpé masúwa bikokí kobéba, atâ bísó tokokí kokúfa. » | |
Acts | LinVB | 27:11 | Nzókandé komandá andimí maloba ma kapiténi mpé ma nkóló wa masúwa, abóyí koyóka maloba ma Pólo. | |
Acts | LinVB | 27:12 | Esíká êná o libóngo ebongí té mpô tóúmela wâná o eleko ya mpío. Bato míngi bakání kolongwa wâná mpé komeka kokóma o Feníkisi, engumbá o libóngo lya Kréta, eye etálání na mbú epái ya Súdi-Wésti mpé epái ya Nórdi-Wésti ; sókó ekokí, báfánda kúná o eleko ya mpío makási. | |
Acts | LinVB | 27:13 | Awa mwâ mompepe mobandí kopepe út’o Súdi, bakanísí ’te bakokí kosála lokóla bakánákí. Babéndí lóngo mpé babandí kotámbola penepene na libóngo lya Kréta. | |
Acts | LinVB | 27:14 | Kasi mosíká té, mompepe mwa ekumbaki eye bakobéngaka Erákwilo mobandí kopepe makási út’o esanga. | |
Acts | LinVB | 27:16 | Ekómí bísó o Súdi ya esanga eké, nkómbó ’te Kóda, eye ebátélí bísó na mompepe, tokokí kokanga ebei bobélé na mpási. | |
Acts | LinVB | 27:17 | Batómbólí yangó o masúwa ; na nsima batandí mikulu minéne mpô ya koléndisa masúwa. Awa babángí ’te masúwa mákende kosúka o libóngo lya Sírta, bakitísí lóngo loye lokotetwaka o mái mpé tozalákí kotíyola sé bôngó. | |
Acts | LinVB | 27:18 | Mokolo mwa nsima mompepe moningísí masúwa mpé bato babandí kobwáka o mái bilóko biye bizalákí o masúwa. | |
Acts | LinVB | 27:19 | Mpé nsima ya mikolo míbalé basáli bangó mǒkó babwákí bilóko biye bikotámbwisaka masúwa. | |
Acts | LinVB | 27:20 | Mikolo mwâ míngi tozalákí komóno mwésé té, minzóto mpé té ; ekumbaki elembí atâ moké té, bôngó tozalákí lisúsu na elíkyá ya kobíka té. | |
Acts | LinVB | 27:21 | Mikolo míngi bato balíákí lisúsu té ; Pólo atélémí o káti ya bangó, alobí : « Batatá, sókó boyókákí ngáí ntángo nalobákí ’te tólongwa o Kréta té, mbele tomóní likáma liye té, mpé mbele bilóko bibébí té. | |
Acts | LinVB | 27:22 | Atâ sikáwa naséngí bínó ’te bóléndisa mitéma, zambí o káti ya bínó moto mǒkó akokúfa té, bobélé masúwa makobéba. | |
Acts | LinVB | 27:24 | mpé alobí na ngáí : ‘Obánga té, Pólo, osengélí kokóma o bosó bwa Kaizáro. Mpô ya yǒ Nzámbe akobátela mpé bato bánso bazalí elongó na yǒ o masúwa.’ | |
Acts | LinVB | 27:25 | Bôngó, batatá, bóléndisa mitéma ! Natíí motéma na Nzámbe, mánso makosálema sé lokóla bayébísákí ngáí. | |
Acts | LinVB | 27:27 | Nsima ya mikolo zómi na mínei tozalákí sé kotíyola o mbú Adriátika. Pene na káti ya butú basáli ba masúwa bakanísí ’te bakómí pene na mokili. | |
Acts | LinVB | 27:28 | Na nsinga ya póndo bamekí bozindó bwa mái, bamóní ’te bozalákí bwa mabóko ntúkú íbalé. Mwâ moké na nsima babwákí póndo lisúsu mpé bamóní ’te bozindó bozalákí bwa mabóko zómi na mátáno. | |
Acts | LinVB | 27:29 | Babángí ’te masúwa mákende kotútana na mabángá, yangó wâná babwákí lóngo ínei o mái epái ya mbáká ya nsima mpé batíí mitéma ’te ntóngó étána nokí. | |
Acts | LinVB | 27:30 | Kasi basáli ba masúwa balukí kokima, bakitísí ebei o mái mpé basálí lokóla bakeí kokangisa lóngo o mbáká ya libóso. | |
Acts | LinVB | 27:31 | Bôngó Pólo alobí na komandá mpé na basodá : « Sókó basáli batíkálí o masúwa té, bokokí kobíka té. » | |
Acts | LinVB | 27:32 | O ntángo êná basodá bakátí mikulu miye mikangákí ebei mpé batíkí yangó ékwéya o mái. | |
Acts | LinVB | 27:33 | Ezalákí bangó kozila ’te ntóngó étána, Pólo abóndélí bato bánso ’te bálía, alobí : « Mikolo zómi na mínei bozalí sé kozila mpé kolála nzala ; boléí lisúsu elóko té. | |
Acts | LinVB | 27:34 | Yangó wâná nabóndélí bínó ’te bólía ; sókó boléí té, bokobíka té. Atâ moto mǒkó o káti ya bínó akozwa likáma té. » | |
Acts | LinVB | 27:35 | Elobí yě bôngó, Pólo akamátí mámpa, atóndí Nzámbe o míso ma bato bánso, abúkí mangó mpé abandí kolía. | |
Acts | LinVB | 27:39 | Etání ntóngó, basáli ba masúwa bayébí té sókó mokili níni bazalákí komóno ; bamóní bobélé mwâ libó-ngo lizalí na zélo, esíká mái malálí nyê, bôngó bamekí kokende koséme kúná. | |
Acts | LinVB | 27:40 | Bakátí mikulu mya lóngo mpô íkwéya o mbú, balembísí mpé mikulu mya yenda ; na nsima batómbólí kapó mpô ’te mompepe mókoka kotínda masúwa o libóngo. | |
Acts | LinVB | 27:41 | Kasi masúwa makeí kotúta zélo mpé makangémí ; mbáká ya libosó ezindí mpé etíkálí nyê, mbáká ya nsima ebúkání mpô ya mbóngé makási. | |
Acts | LinVB | 27:42 | Basodá bakání koboma bato ba bolóko, mpô ’te mǒkó wa bangó té ákoka kokima na bokáti mái. | |
Acts | LinVB | 27:43 | Kasi komandá, mpô alingí kobíkisa Pólo, apekísí bangó kosála yangó. Atíndí ’te baye bayébí mái bámíbwáka o mái libosó mpé bákende o mokili. | |
Chapter 28
Acts | LinVB | 28:2 | Bato ba esanga bayambí bísó malámu míngi. Babéngí bísó bánso penepene na móto monéne bapelísákí, mpô mbúla ebandí konóko mpé ekómí mpío. | |
Acts | LinVB | 28:3 | Pólo alokótí libóké lya nkóni ekaúká, mpé abwákí lyangó o móto ; kasi nyóka ekimákí molungé, ebimí mpé ekangí Pólo o lobóko. | |
Acts | LinVB | 28:4 | Ntángo bato ba esanga bamóní ’te nyóka ezalákí kokanga yě na lobóko, balobání : « Sôló, moto óyo azalí mobomi : Atâ abíkí bobélé sikasikáwa o mái, nzámbe nkómbó ’te bosémbo alingí té ’te átíkala na bomoi. » | |
Acts | LinVB | 28:6 | Bangó bakanísí ’te nzóto ya yě ekobanda kovímba tǒ yě akokúfa na mbálákáká. Bazilí míngi, kasi áwa bamóní ’te mabé makwêlí yě té, babóngólí makanisi mpé babandí koloba ’te azalí nzámbe. | |
Acts | LinVB | 28:7 | Penepene na esíká êná mokonzi wa esanga Públio azalákí na lopángo. Ayambí bísó na bobóto o ndáko ya yě ; mikolo mísáto totíkálí kofánda epái ya yě. | |
Acts | LinVB | 28:8 | Sé o ntángo êná tatá wa Públio azalákí kolála o mbéto : azalákí koyóka féfele mpé koleka libumu. Pólo akeí kotála yě, asámbélí, atandélí yě mabóko mpé abíkísí yě. | |
Acts | LinVB | 28:10 | Bakúmísí bísó míngi, mpé o ntángo tolongwí epái ya bangó bapésí bísó bilóko bisengélí na bísó o mobémbo. | |
Acts | LinVB | 28:11 | Nsima ya sánzá ísáto tokwélí o masúwa mǒkó ma Alesándria, maye matíkálákí o esanga eleko ya mpío mobimba ; masúwa mazalákí na bendéle ya ‘Dioskúros’. | |
Acts | LinVB | 28:13 | Tolongwí kúná, masúwa matámbólí pene na libóngo téé tokómí o Régio. Mokolo mwa nsima mompepe mopepí út’o Súdi, bôngó nsima ya mokolo mǒkó tokómí o Puteóli. | |
Acts | LinVB | 28:14 | Kúná tokútí bandeko ; babóndélí bísó ’te tótíkala póso yǒ kó epái ya bangó ; na nsima tokeí o Róma. | |
Acts | LinVB | 28:15 | Ntángo bandeko ba Róma bayókí ’te tokómí, bayéí kokútana na bísó kín’o zándo ya Apio mpé o ‘Ndáko ísáto’. Awa Pólo amóní bangó, atóndí Nzámbe mpé akómí na mpíkó lisúsu. | |
Acts | LinVB | 28:16 | Ekómí bísó o Róma, balingísí Pólo kofánda yě mǒkó bobélé na sodá óyo azalákí kokéngele yě. | |
Acts | LinVB | 28:17 | Nsima ya mikolo mísáto abéngí bakóló ba ba-Yúda. Ntángo basangání, Pólo alobí na bangó : « Bandeko, atâ nasálí bato ba ekólo ya bísó mabé té mpé nabóyí mimeseno mya bankóko té, bakangí ngáí o Yerúzalem mpé bakabí ngáí o mabóko ma ba-Róma. | |
Acts | LinVB | 28:18 | Bangó basámbísí ngáí mpé balingákí kotíka ngáí, mpô bazwí ngáí na likambo lyǒ kó té likokí na etúmbu ya liwá. | |
Acts | LinVB | 28:19 | Kasi, áwa ba-Yúda babóyí, nasengélákí kosénge ’te Kaizáro ákáta likambo lya ngáí ; nzókandé nazalí na likanisi lyǒ kó lya kofúnda bato ba ekólo ya ngáí té. | |
Acts | LinVB | 28:20 | Sé na ntína êná naséngékí ’te námóno mpé tósolola, mpô nakangémí na minyolólo mpô ya moto óyo azalí elíkyá ya Israél. » | |
Acts | LinVB | 28:21 | Bazóngísélí yě : « Bísó áwa tozwí atâ monkandá mǒkó té moútí o Yudéa, moyébísí bísó nsango ya yǒ. O ntéi ya bandeko baye bayéí áwa moto mǒkó té asangélí tǒ asolólí bísó ’te likambo libé likwêlí yǒ. | |
Acts | LinVB | 28:22 | Kasi tolingí ’te óyébisa bísó sókó ozalí kokanisa níni, zambí toyébí ’te bipái bínso bato bakotíaka ntembe na lingómbá lîná. » | |
Acts | LinVB | 28:23 | Balakání mpô ya mokolo balingí kokútana mpé bato baíké bayéí kotála Pólo o ndáko esíká afándí. Ut’o ntóngó téé mpókwa alimbólélí bangó mambí ma Bokonzi bwa Nzámbe, mpé bandá maye makomámí o Mobéko mwa Móze mpé o búku ya baproféta atéyí bangó na moléndé mpô ’te báyamba Yézu. | |
Acts | LinVB | 28:25 | Ntángo bakabwání bayókání té ; Pólo abakísí bobélé maloba maye : « Maye Elímo Sántu alobáká na bankóko ba bínó na monoko mwa proféta Izáya mazalí ma sôló mpenzá : | |
Acts | LinVB | 28:26 | Kendé epái ya bato ba ekólo eye mpé lobá na bangó : Bokotía matói, kasi bokotongolo ntína té ; bokotála na míso, kasi bokomóno té. | |
Acts | LinVB | 28:27 | Mpámba té, mitéma mya bato baye mikómí lokóla mabángá : bazipí matói mpé bakangí míso, mpô ’te míso ma bangó mámóno té, matói ma bangó máyóka té, mayéle ma bangó mátongolo ntína té, bôngó bábóngola mitéma té, mpé nábíkisa bangó té ! | |
Acts | LinVB | 28:28 | Bóyéba malámu : Nzámbe atíndélí bapagáno libíkí lya yě ; bangó bakondima lyangó. » ( | |
Acts | LinVB | 28:30 | Mbúla íbalé mobimba Pólo atíkálí kofánda o ndáko ya kofútela. Azalákí koyamba baye bánso bayéí kotála yě | |