Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I CHRONICLES
Up
Chapter 1
I Ch LinVB 1:5  Bana ba Yafet : Gomer, Magog, Madai, Yavan, Tubal, Mesek na Tiroas.
I Ch LinVB 1:7  Bana ba Yavan : Elisa, Tarsis, Kitim na Rodanim.
I Ch LinVB 1:9  Bana ba Kus : Seba, Avila, Sabta, Rama na Sabteka. Bana ba Rama : Seba na Dedan.
I Ch LinVB 1:11  Misraim aboti ba-Lud, ba-Anam, ba-Leab na ba-Naftu,
I Ch LinVB 1:12  ba-Patros, ba-Kaslu, ba-Kaftor, bankoko ba ba-Filisti.
I Ch LinVB 1:13  Kanana aboti Sidoni, mwana wa ye wa yambo, na mpe Eti,
I Ch LinVB 1:17  Bana ba Sem : Elam, Asur, Arpaksad, Lud na Aram. Bana ba Aram : Us, Kul, Geter na Mesek.
I Ch LinVB 1:19  Eber aboti bana babali babale : Mwana wa yambo Peleg, zambi o ntango babotaki ye mokili moka­bwanaki, na mozimi wa ye Yoktan.
I Ch LinVB 1:20  Yoktan aboti Almodad, Selef, Asarmavet na Yera,
I Ch LinVB 1:23  Ofir, Avila na Yobab. Bango banso bana ba Yoktan.
I Ch LinVB 1:29  Bana ba bango : Mwana wa ya­mbo wa Ismael, Nebayot, na nsima Kedar, Adbeel, Mibsam,
I Ch LinVB 1:31  Yetur, Nafis na Kedema. Bango banso bana ba Ismael.
I Ch LinVB 1:32  Bana ba Ketura, makango wa Abarama : Zimran, Yoksan, Medan, Madian, Yisbak na Suak. Bana ba Yoksan : Seba na Dedan.
I Ch LinVB 1:33  Bana ba Madian : Efa, Kefer, Kanok, Abida na Elda. Bango banso bana ba Ketura.
I Ch LinVB 1:34  Abarama aboti Izaka. Bana ba Iza­ka : Ezau na Israel.
I Ch LinVB 1:35  Bana ba Ezau : Elifaz, Reuel, Yeus, Yalam na Kora.
I Ch LinVB 1:36  Bana ba Elifaz : Teman, Omar, Sefi, Gaetam, Keniz, Timna na Amalek.
I Ch LinVB 1:38  Bana ba Seir : Lotan, Sobal, Si­beon, Ana, Dison, Eser na Disan.
I Ch LinVB 1:39  Bana ba Lotan : Kori na Omam. Ndeko mwasi wa Lotan, ye Timna.
I Ch LinVB 1:40  Bana ba Sobal : Alyan, Manakat, Ebal, Sefi na Onam. Bana ba Sibeon : Aya na Ana.
I Ch LinVB 1:41  Mwana wa Ana : Dison. Bana ba Dison : Kamran, Esban, Yitran na Keran.
I Ch LinVB 1:42  Bana ba Eser : Bilan, Zaavan na Yaakan. Bana ba Disan : Us na Aran.
I Ch LinVB 1:43  Nkombo ya bakonzi ba mokili mwa Edom ntango Israel azalaki naino na bokonzi te : Bela, mwana wa Beor ; nkombo ya mboka ya ye : Dinaba.
I Ch LinVB 1:44  Bela awei mpe Yobab, mwana wa Zera, moto wa Bosra, akitani ye.
I Ch LinVB 1:45  Yobab awei mpe Kusam, moto wa mokili mwa Teman akitani ye.
I Ch LinVB 1:46  Kusam awei mpe Adad, mwana wa Bedad, akitani ye ; ye moto alongi ba-Madian o esobe ya Moab ; nkombo ya mboka ya ye Avit.
I Ch LinVB 1:47  Adad awei mpe Samla wa mboka Masreka akitani ye.
I Ch LinVB 1:48  Samla awei mpe Saul wa Rekobot pene na ebale, akitani ye.
I Ch LinVB 1:49  Saul awei mpe Baal-Kanan, mwana wa Akbor, akitani ye.
I Ch LinVB 1:50  Baal-Kanan awei mpe Adad akitani ye. Nkombo ya mboka ya ye : Payi ; nkombo ya mwasi wa ye : Meetabel, mwana wa Patred, nkoko wa Me-Zakab.
I Ch LinVB 1:51  Adad awei mpe nsima ya ye bakonzi basusu bayangeli mokili mwa Edom : Timna, Alya, Yetet,
I Ch LinVB 1:54  Magdiel na Iram. Bango ba­nso bakonzi ba Edom.
Chapter 2
I Ch LinVB 2:1  Nkombo ya bana ba Israel : Ruben, Simeon, Levi, Yuda, Izakar na Zabulon,
I Ch LinVB 2:2  Dan, Yozefu na Benyamin, Neftali, Gad na Aser.
I Ch LinVB 2:3  Bana ba Yuda : Er, Onan na Sela. Aboti bango basato na mwasi wa Kanana, nkombo ya ye Bat-Sua. Er, mwa­na wa yambo wa Yuda, asepelisi Yawe te, yango wana Yawe abomi ye.
I Ch LinVB 2:4  Tamar, bokilo wa Yuda, aboteli ye Peres na Zera. Yuda aboti bana babali batano.
I Ch LinVB 2:6  Bana ba Zera : Zimri, Etan, Eman, Kalkol na Darda : bana batano.
I Ch LinVB 2:7  Mwana wa Karmi : Akar, oyo akotisi ba-Israel o nzela ya mpasi ntango abebisaki ekila.
I Ch LinVB 2:10  Ram aboti Aminadab ; Aminadab aboti Nakason, nkumu wa libota lya Yuda.
I Ch LinVB 2:13  Yese aboti Eliab, mwana wa yambo, Abinadab, mwana wa babale, Simea mwana wa basato,
I Ch LinVB 2:14  Netaneel, mwana wa banei, Radai, mwana wa batano,
I Ch LinVB 2:15  Osem, mwana wa motoba, na Davidi, mwana wa nsambo.
I Ch LinVB 2:16  Bandeko basi ba bango : Seruya na Abigayil. Seruya aboti bana basato : Abisai, Yoab na Asael.
I Ch LinVB 2:17  Abigayil aboti Amasa. Yeter, moto wa Ismael, azali tata wa Amasa.
I Ch LinVB 2:18  Kaleb, mwana wa Kesron, aboti Yeriot na mwasi wa ye Azuba. Bana ba ye : Yeser, Sobab, na Ardon.
I Ch LinVB 2:19  Azuba awei mpe Kaleb abali Efrata, oyo aboteli ye Kur.
I Ch LinVB 2:21  Na nsima Kesron abali mwana wa Makir, tata wa Galaad. Abali ye ntango akokisi mibu ntuku motoba ; mwasi oyo aboteli ye Segub.
I Ch LinVB 2:22  Segub aboti Yair, oyo azwi mboka ntuku ibale na isato o mokili mwa Galaad.
I Ch LinVB 2:23  Na nsima Aram na Gesur babotoli nganda ya Yair na Kenat na mboka ya penepene ; yango inso mboka ntuku motoba. Bango banso bazalaki ba­na ba Makir, tata wa Galaad.
I Ch LinVB 2:24  Nsima ya liwa lya Kesron, Kaleb azwi Efrata, mwasi wa tata wa ye Kesron, mpe aboti na ye Asekur, tata wa Tekoa.
I Ch LinVB 2:25  Yerameel, mwana wa yambo wa Kesron, aboti mpe bana babali : Ram, mwana wa yambo, Buna, Oren, Osem na Akiya.
I Ch LinVB 2:26  Yerameel azalaki mpe na mwasi mosusu : Atara, mama wa Onam.
I Ch LinVB 2:27  Bana ba Ram, mwana wa yambo wa Yerameel : Maas, Yamin na Eker.
I Ch LinVB 2:28  Bana ba Onam : Samai na Yada. Bana ba Samai : Nadab na Abisur.
I Ch LinVB 2:30  Bana ba Nadab : Seled na Efraim. Seled awei, abotaki te.
I Ch LinVB 2:31  Efraim aboti Yisei. Yisei aboti Sesan ; Sesan aboti Alai.
I Ch LinVB 2:32  Yada, ndeko wa Samai, aboti Yeter na Yonatan. Yeter, abotaki bana te.
I Ch LinVB 2:33  Yonatan aboti Pelet na Zaza. Bango banso bana ba Yerameel.
I Ch LinVB 2:34  Sesan aboti bana babali te, se bana basi. Azalaki na mosali wa ndako, mo-Ezipeti nkombo ’te Yarka ;
I Ch LinVB 2:35  mpe Sesan abalisi ye mwana wa ye wa mwasi ; oyo aboteli ye Atai.
I Ch LinVB 2:42  Bana ba Kaleb, ndeko wa Yerameel : Mesa, mwana wa ye wa yambo ; ye tata wa Zif, na Maresa, tata wa Ebron.
I Ch LinVB 2:44  Sema aboti Rakam, tata wa Yorkeam. Rekem aboti Samai.
I Ch LinVB 2:45  Mwana wa Samai : Maon, oyo azali tata wa Bet-Sur.
I Ch LinVB 2:46  Efa, makango wa Kaleb, aboti Karan, Mosa na Gazez. Karan aboti Gazez.
I Ch LinVB 2:47  Bana ba Yadai : Regem, Yotam, Gesan, Pelet, Efa na Saaf.
I Ch LinVB 2:48  Maaka, makango wa Kaleb, aboti Seber na Tirokana.
I Ch LinVB 2:49  Aboti mpe Saaf, tata wa Madmana na mpe Seba, tata wa Makbena mpe tata wa Gibea. Mwana mwasi wa Kaleb, nkombo ya ye Aksa.
I Ch LinVB 2:50  Bango banso bana ba Kaleb. Bana ba Kur, mwana wa yambo wa Efrata : Sobal, tata wa Kiriat-Yearim,
I Ch LinVB 2:51  Salma, tata wa Beteleme, Karef, tata wa Bet-Gader.
I Ch LinVB 2:52  Sobal, tata wa Kiriat-Yearim aboti bana babali : Arowe, oyo aboti ndambo ya etuka ya ba-Manakat,
I Ch LinVB 2:53  na mpe bituka bya Kiriat-Yearim, ba-Yitri, ba-Put, ba-Sumat, ba-Misrayi. Bango bazali ba­nkoko ba bato ba Sorea na Estaol.
I Ch LinVB 2:54  Bana na bankoko ba Salma : Be­teleme, bato ba Netofat, ba Atrot, Bet-Yoab, ndambo ya etuka ya ba-Manakat, bato ba Sorea,
I Ch LinVB 2:55  bituka bya ba-Sofra bakofandaka o Yabes, bato ba Tireat, ba Simeat na ba Sukat. Ba­ngo bazali ba-Keni bauti o Amat, tata wa libota lya Rekab.
Chapter 3
I Ch LinVB 3:1  Nkombo ya bana ba Davidi babotami o Ebron : Amnon, mwana wa yambo, mwana wa Akinoam wa Yizreel ; Daniel, mwana wa babale, mwana wa Abigayil wa Karmel ;
I Ch LinVB 3:2  Absalom, mwana wa basato, mwana wa Maaka, mwana wa Talmai, mokonzi wa Gesur ; Adonia, mwana wa banei, mwana wa Kagit ;
I Ch LinVB 3:3  wa batano, Sefatia, mwana wa Abital ; wa motoba Yit­ream, mwana wa Egla mwasi wa ye.
I Ch LinVB 3:4  Aboti bana babali motoba o Ebron, esika azalaki mokonzi mibu nsambo na sanza motoba ; azalaki mokonzi o Yeruzalem mibu ntuku isato na misato.
I Ch LinVB 3:5  Bana babotami o Yeruzalem : Simea, Sobab, Natan, Salomo, bango banei bana ba Betsabe, mwana wa Amiel ;
I Ch LinVB 3:9  Bango banso bana babali Davidi abotaki ; bakisa naino bana abotaki na bamakango. Ndeko mwasi wa bango : Tamar.
I Ch LinVB 3:10  Salomo aboti Roboam ; Roboam aboti Abia, Abia aboti Asa, Asa aboti Yozafat,
I Ch LinVB 3:11  Yozafat aboti Yoram, Yoram aboti Okozia, Okozia aboti Yoas,
I Ch LinVB 3:12  Yoas aboti Amasia. Amasia aboti Azaria, Azaria aboti Yotam,
I Ch LinVB 3:13  Yotam aboti Akaz, Akaz aboti Ezekia, Ezekia aboti Manase,
I Ch LinVB 3:15  Yo­zia aboti Yokanan, mwana wa yambo, na nsima Yoyakim, Sedekia mwana wa basato, na Salum, mwana wa banei.
I Ch LinVB 3:16  Yoyakim aboti Yekonia, mpe Yekonia aboti Sedekia.
I Ch LinVB 3:17  Yekonia aboti bana baye o boo­mbo : Sealtiel,
I Ch LinVB 3:18  na nsima aboti Malkiram, Pedaya, Seneasar, Yekamia, Osama, Nebadia.
I Ch LinVB 3:19  Pedaya aboti Zorobabel na Simei ; bana ba Zorobabel : Mesulam na Kanania ; Selomit azalaki ndeko mwasi wa bango.
I Ch LinVB 3:20  Mesulam aboti Kasuba, Owel, Berekia, Kasadia, Yusab-Kesed : bana batano.
I Ch LinVB 3:21  Kanania aboti Pelatia, Pelatia aboti Yesaya, Yesaya aboti Refaya, Refaya abo­ti Arnan, Arnan aboti Obadia, Obadia aboti Sekania.
I Ch LinVB 3:22  Sekania aboti bana babali motoba : Semaya, Katus, Yigeal, Baria, Nearia na Safat.
I Ch LinVB 3:23  Nearia aboti bana babali basato : Elioenai, Kiskia, Azrikam.
I Ch LinVB 3:24  Elioenai aboti bana babali nsambo : Odawya, Eliasib, Pelaya, Akub, Yokanan, Delaya na Anani.
Chapter 4
I Ch LinVB 4:1  Yuda aboti Peres, Kesron, Karmi, Kur, na Sobal.
I Ch LinVB 4:2  Sobal aboti Reaya, Reaya aboti Yakat mpe Yakat aboti Akimai na Lakad. Bango bazali bituka bya ba-Sorea.
I Ch LinVB 4:3  Kur aboti tata wa Etam, Yizreel, Yisma na Yidbas ; ndeko mwasi wa bango : Aslelponi.
I Ch LinVB 4:4  Penuel aboti Gedor mpe Ezer aboti Kusa. Bango bazali bana ba Kur, mwana wa yambo wa Efrata, tata wa Beteleme.
I Ch LinVB 4:5  Asekur, tata wa Tekoa, azalaki na ba­si babale : Elea na Naara.
I Ch LinVB 4:6  Naara abo­teli ye Akuzam, Kefer, ba-Temeni na ba-Akastari. Bango bazali bana ba Naara.
I Ch LinVB 4:8  Kos aboti Anub, Asobeba ; azali mpe tata wa bituka bya Akarkel, mwana wa Arum.
I Ch LinVB 4:9  Yabes aleki ba­ndeko ba ye na lokumu. Mama wa ye apesaki ye nkombo Yabes, zambi abo­taki ye na mpasi.
I Ch LinVB 4:10  Yabes abondeli Nzambe wa Israel na maloba maye : « Soko obenisi ngai, okokolisa mokili mwa ngai na bokasi bwa yo mpe okolongola makama manso mpo nayoka mpasi te. » Mpe Nzambe andimi losambo la ye.
I Ch LinVB 4:11  Kelub, ndeko wa Suka, aboti Mekir, tata wa Eston.
I Ch LinVB 4:12  Eston aboti Bet-Refa, Pasea na Tekina, tata wa mboka Nakas. Bango bato ba libota lya Rekab.
I Ch LinVB 4:13  Keniz aboti Otniel na Seraya. Ot-niel aboti Kata na Meonotai.
I Ch LinVB 4:14  Meonotai aboti Ofra. Seraya aboti Yoab, tata wa Ge-Karasim. Bango bazalaki kotula biloko kitoko.
I Ch LinVB 4:15  Bana ba Kaleb, mwana wa Yefune : Ir, Ela na Naam. Ela aboti Keniz.
I Ch LinVB 4:17  Ezra aboti Yeter, Mered, Kefer na Yalon. Bango bazali bana ba Bitia, mwana mwasi wa Farao, oyo Mered abalaki. Bitia aboteli ye Miriam, Samai na Yisba, tata wa Estemoa. Mwasi mo-Yuda wa Estemoa aboteli ye Yered, tata wa Gedor, na Keber, tata wa Soko, na Yekutiel tata wa Zanoa.
I Ch LinVB 4:18  Ezra aboti Yeter, Mered, Kefer na Yalon. Bango bazali bana ba Bitia, mwana mwasi wa Farao, oyo Mered abalaki. Bitia aboteli ye Miriam, Samai na Yisba, tata wa Estemoa. Mwasi mo-Yuda wa Estemoa aboteli ye Yered, tata wa Gedor, na Keber, tata wa Soko, na Yekutiel tata wa Zanoa.
I Ch LinVB 4:19  Mwasi wa Odiya mpe ndeko mwa­si wa Nakam, aboti tata wa Keila moto wa Garma mpe Estemoa, moto wa Maaka.
I Ch LinVB 4:20  Simon aboti Amnon, Rimna, Ben-Kanan na Tilon. Yisei aboti Zoket na Ben-Zoket.
I Ch LinVB 4:21  Sela, mwana wa Yuda aboti Er, tata wa Leka, na Lada tata wa Maresa ; ye mpe nkoko wa baye bakoto­ngaka bilamba kitoko o Bet-Asbea.
I Ch LinVB 4:22  Aboti mpe Yokim na bato ba Kozeba, Yoas na Saraf, baye bakendeki ko­bala basi o Moab liboso lya kozonga o Beteleme. Makambo maye masalema kala mpenza.
I Ch LinVB 4:23  Bango bazalaki basali ba mbeki ; bafandaki o Netaim mpe o Gedera. Bazalaki kofanda penepene na mokonzi, basaleli ye malamu.
I Ch LinVB 4:24  Simeon aboti Nemuel, Yamin, Yarib, Zera na Saul.
I Ch LinVB 4:25  Saul aboti Salum, Salum aboti Mibsam, Mibsam aboti Misma.
I Ch LinVB 4:26  Misma aboti Kamuel, Kamuel aboti Zakur, Zakur aboti Simei.
I Ch LinVB 4:27  Simei aboti bana babali zomi na motoba na bana basi motoba, kasi bandeko ba ye bazalaki na bana mi­ngi te ; yango wana libota lya bango lizalaki na bato mingi te, lokola libota lya Yuda.
I Ch LinVB 4:31  Bet-Markabot, Kasar-Susim, Bet-Biri na Saraim : Bizalaki bingumba bya bango tee bokonzi bwa Davidi.
I Ch LinVB 4:32  Bafandi o mboka Etam, Ayin, Rimon, Token, Asan, mboka itano,
I Ch LinVB 4:33  mpe o mboka ya penepene tee Baalat : yango nde nko­mbo ya mboka mpe ya mabota ma bango.
I Ch LinVB 4:34  Bana basusu : Mesobab, Yamlek na Yosa, mwana wa Amasia,
I Ch LinVB 4:35  Yoel, Yeku, mwana wa Yosibia, mwana wa Seraya, mwana wa Asiel,
I Ch LinVB 4:36  Elioenai, Yakoba, Yesokaya, Asaya, Adiel, Yesimiel, Benaya,
I Ch LinVB 4:37  Ziza, Ben-Sifei, Ben-Alon, Ben-Yeyada, Ben-Simri, Ben-Semaya.
I Ch LinVB 4:38  Baye banso batangemi awa, bazalaki bankumu ba bituka bya ba­ngo ; mabota ma bango makoli mingi mpenza.
I Ch LinVB 4:39  Bango bakei kofa­nda epai ya Gedor o Esti ya lobwaku mpe koluka bisobe mpo ya bibwele bya ba­ngo.
I Ch LinVB 4:40  Bazwi bisika bya matiti malamu, mpe mokili mozalaki monene, nye, na boboto, mpamba te, baye bafandaki kuna kala, bazalaki bankoko ba Kam.
I Ch LinVB 4:41  Bato ba libota lya Simeon, baye batangemi awa, bayaki o eleko Ezekia azalaki mokonzi wa Yuda, babebisi biema bya bango mpe babomi mboka ya bango, babeteli bango mobondo moumeli tee lelo, mpe bakei kofanda o esika ya bango, zambi bisobe bya koleisa mpata ya bango bizalaki mingi.
I Ch LinVB 4:42  Bana basusu ba Simeon bakei kofanda o ngomba ya Seir. Bazalaki bato nkama itano. Bankumu ba bango : Pelatia, Nearia, Refaya na Uziel, bana ba Yisei.
I Ch LinVB 4:43  Balongi ba-Amalek baye batikali mpe kofanda kuna tee lelo.
Chapter 5
I Ch LinVB 5:1  Ruben azalaki mwana wa yambo wa Israel. Azalaki mwana wa liboso solo, kasi mokolo alalaki na makango wa tata wa ye, bapesi botomolo na bana ba Yozefu, mwana wa Israel ; bongo batali ye lisusu lokola mwana wa yambo te.
I Ch LinVB 5:2  Ata Yuda aleki bandeko ba ye banso na lokumu, zambi nkumu monene abotami o libota lya ye, botomolo bozalaki na Yozefu.
I Ch LinVB 5:3  Ruben, mwana wa yambo wa Israel aboti Enok, Palu, Kesron na Kar-mi.
I Ch LinVB 5:4  Bana ba Yoel : Yoel aboti Semaya, Semaya aboti Gog, Gog aboti Simei,
I Ch LinVB 5:5  Simei aboti Mika, Mika aboti Reaya, Reaya aboti Baal,
I Ch LinVB 5:6  Baal aboti Beera, oyo Teglat-Falasar, mokonzi wa Asur akangaki mpe akendeki na ye o boombo ; ye azalaki nkumu wa libota lya ba-Ruben.
I Ch LinVB 5:7  Bandeko ba ye bakabwani na bituka mpe na mabota ; nkombo ya ba­ngo : Yeiel, Zekaria,
I Ch LinVB 5:8  na Bela, mwana wa Azaz, mwana wa Sema, mwana wa Yoel. Bela afandi o Aroer mpe mo­kili mwa ye mokei tee ngomba Nebo ya Baal-Meon.
I Ch LinVB 5:9  Epai ya Esti mokili mwa ye mokei tee eliki mpe ebale Efrate, zambi bazalaki na bi­bwele mingi o mokili mwa Galaad.
I Ch LinVB 5:10  O eleko ya Saul babundi etumba na ba-Agar, balongi bango mpe bakei ko­fanda o biema bya bango o mokili mobimba o Esti ya Galaad.
I Ch LinVB 5:11  Bana ba Gad bafandi penepene na bango o mokili mwa Basan tee Salka.
I Ch LinVB 5:12  Mwana wa yambo : Yoel ; na nsima Safam moto wa babale, na nsima Yanai na Safat o mokili mwa Basan.
I Ch LinVB 5:13  Bandeko ba bango nsambo baka-bwani mpe mabota mabota : Mikael, Mesulam, Seba, Yorai, Yakan, Zia na Eber.
I Ch LinVB 5:14  Bango banso bana ba Abigail, mwa­na wa Kuri, mwana wa Yaroa, mwana wa Galaad, mwana wa Mi­kael, mwana wa Yesidai, mwana wa Yado, mwana wa Buz.
I Ch LinVB 5:15  Aki, mwana wa Abdiel, nkoko wa Guni, azalaki nkumu wa libota lya bango.
I Ch LinVB 5:16  Bafandi o mokili mwa Galaad mpe mwa Basan, o mboka ya penepene mpe o bisobe o Saron tee ndelo ya mokili mwa bango.
I Ch LinVB 5:17  Batangi mabota ma bango o eleko Yotam azalaki mokonzi wa Yuda, mpe Yeroboam mokonzi wa Israel.
I Ch LinVB 5:18  Bana ba Ruben, bana ba Gad na ndambo ya libota lya Manase bazalaki basoda ba mpiko, bayebi komeme nguba na mopanga mpe kobete liti­mbo, bameseni na bitumba ; banso bazalaki bato nkoto ntuku inei na inei na nkama nsambo na ntuku motoba, bakoki na mosala mwa soda.
I Ch LinVB 5:19  Babundi bitumba na ba-Agar mpe na bato ba Yetur, Nafis na Nodad.
I Ch LinVB 5:20  Nzambe asalisi bango : balongi ba-Agar na baninga ba bango ; mpamba te, ntango ya etumba babondeli Nza­mbe, Oyo ayoki bango zambi batii mitema na ye.
I Ch LinVB 5:21  Babotoli bibwele bya ba-Agar, bazwi kamela nkoto ntuku itano, mpata nkoto nkama ibale na ntuku itano, mpunda nkoto ibale na bato nkoto monkama,
I Ch LinVB 5:22  mpo Nza­mbe ayangelaki etumba ; bato mingi bawei. Bongo bakei kofanda o esika ya bango tee o eleko ya boombo.
I Ch LinVB 5:23  Bana ba ndambo ya libota lya Ma­nase bafandi o mokili kati ya Basan na Baal-Ermon, Senir na ngomba Ermon. Bazalaki ebele mpenza.
I Ch LinVB 5:24  Nko­mbo ya bankumu ba mabota : Kefer, Yisei, Eliel, Azriel, Yirmeya, Odavia na Yadiel. Banso bazalaki basoda ba mpiko, bato ba lokumu, bankumu ba mabota ma bango.
I Ch LinVB 5:25  Kasi baboyi kotosa mibeko mya Nzambe wa bankoko ba bango, bakumisi banzambe ba bikolo bisusu, biye Nzambe abomaki liboso lya ba­ngo.
I Ch LinVB 5:26  Nzambe wa Israel apesi Pul, mo­konzi wa Asur, na mpe Teglat-Falasar, mokonzi wa Asur, likanisi lya kobunda na bango. Bakangi bato ba Ruben, Gad mpe ndambo ya libota lya Manase mpe bakei na bango o boombo o Kala, Kabor, Ara tee ebale ya Gozan, esika bazali tee lelo.
I Ch LinVB 5:29  Amram aboti Arone, Moze na Miriam. Arone aboti Nadab na Abiu, Eleazar na Itamar.
I Ch LinVB 5:36  Yokanan aboti Azaria, Ye moto azalaki nganga Nza­mbe o Tempelo eye Salomo atongaki o Yeruzalem.
I Ch LinVB 5:41  O eleko Yawe atindaki Nabukodonosor akende na bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem o boombo, Yosadak akendeki na bango.
Chapter 6
I Ch LinVB 6:4  Merari aboti Mali na Musi. Tala bituka bya Levi bitangemi na nkoko wa bango.
I Ch LinVB 6:5  Gersom aboti Libni, Libni aboti Yakat, Yakat aboti Zima,
I Ch LinVB 6:6  Zima aboti Yoa, Yoa aboti Ido, Ido aboti Zera, Zera aboti Yeaterai.
I Ch LinVB 6:7  Keat aboti Aminadab, Aminadab aboti Kore, Kore aboti Asir,
I Ch LinVB 6:8  Asir aboti Elkana, Elkana aboti Ebiasaf, Ebiasaf aboti Asir,
I Ch LinVB 6:9  Asir aboti Takat, Takat aboti Uriel, Uriel aboti Uzia, Uzia aboti Saul.
I Ch LinVB 6:11  Akimot aboti Elkana, Elkana aboti Sofai, Sofai aboti Nakat,
I Ch LinVB 6:12  Nakat aboti Eliab, Eliab abo­ti Yerokam, Yerokam aboti Elkana,
I Ch LinVB 6:13  Elkana aboti Samuel, mwana wa yambo, na Abia, mozimi wa ye.
I Ch LinVB 6:14  Merari aboti Mali, Mali aboti Libni, Libni aboti Simei, Simei aboti Uza,
I Ch LinVB 6:15  Uza aboti Simea, Simea aboti Agia, Agia aboti Asaya.
I Ch LinVB 6:16  Davidi aponi bato mpo ya koye­mbisa baninga ba bango o Tempelo ya Yawe o mokolo Sanduku ya Bo­ndeko ekoti wana.
I Ch LinVB 6:17  Bazalaki na mosala mwa kobongisa nzembo o Ema ya Likita tee mokolo Salomo atongi Tempelo ya Yawe o Yeruzalem. Basali mosala mwa bango se lokola mobeko motindi.
I Ch LinVB 6:18  Baye basalaki mosala mona esika yoko na bana ba bango, bango baye : O kati ya bana ba Keat : moyembi Eman, mwana wa Yoel, mwana wa Samuel,
I Ch LinVB 6:19  mwana wa Elkana, mwana wa Yerokam, mwana wa Eliel, mwana wa Toa,
I Ch LinVB 6:20  mwana wa Suf, mwana wa Elkana, mwana wa Makat, mwana wa Amasai,
I Ch LinVB 6:21  mwana wa Elkana, mwana wa Yoel, mwana wa Azaria, mwana wa Sefania,
I Ch LinVB 6:22  mwana wa Takat, mwana wa Asir, mwana wa Ebiasaf, mwana wa Kore,
I Ch LinVB 6:23  mwana wa Yisar, mwana wa Keat, mwana wa Levi, mwana wa Israel.
I Ch LinVB 6:24  Ndeko wa ye Asaf azalaki koteleme o loboko la ye la mobali ; ye nde mwana wa Berekia, mwana wa Simea,
I Ch LinVB 6:25  mwana wa Mikael, mwana wa Baseya, mwana wa Malkia,
I Ch LinVB 6:28  mwana wa Yakat, mwana wa Gersom, mwana wa Levi.
I Ch LinVB 6:29  O loboko la mwasi etelemi wana bandeko ba bango, bana ba Merari : Etan, mwana wa Kisi, mwana wa Abdi, mwana wa Maluk,
I Ch LinVB 6:30  mwana wa Kasabia, mwana wa Amasia, mwana wa Kilkia,
I Ch LinVB 6:32  mwana wa Mali, mwana wa Musi, mwana wa Merari, mwana wa Levi.
I Ch LinVB 6:33  Bandeko ba bango basusu, ba-Levi, bazalaki se kosala mosala o Te­mpelo ya Yawe.
I Ch LinVB 6:34  Arone na bana ba ye bazalaki kotumba mabonza o altare ya miboma mpe o altare ya mpaka ya malasi. Mosala mwa bango bobele kotala makambo maleki masantu mpe kokokisa milulu mya kozwa boli­mbisi masumu ma bato ba Israel ; balandi se mibeko minso lokola Moze mosaleli wa Yawe atindaki bango.
I Ch LinVB 6:35  Nkombo ya mwana mpe ya ba­nkoko ba Arone : Eleazar, mwana wa ye Pinekas, Pinekas aboti Abisai,
I Ch LinVB 6:36  Abisai aboti Buki, Buki aboti Uzi, Uzi aboti Zerakia
I Ch LinVB 6:37  Zerakia aboti Merayot, Merayot aboti Amaria, Amaria aboti Akitub,
I Ch LinVB 6:39  Tala awa mboka na nganda esika bafandaki o mokili mwa bango. Zeke elakisi liboso bana ba Arone, ba etuka ya Keat.
I Ch LinVB 6:40  Bongo bapesi bango Ebron o mokili mwa Yuda na bisobe bya penepene.
I Ch LinVB 6:41  Bapesi Kaleb, mwana wa Yefune bilanga na mboka ya penepene.
I Ch LinVB 6:42  Kasi bapesi bana ba Arone mboka iye mobomi akoki kozwa libiki : Ebron, Libna, Yatir, Estemoa,
I Ch LinVB 6:45  O mokili mwa libota lya Benyamin, bapesi bango Geba, Alemet, Anatot na bilanga bya penepene. Bazwi bo­ngo mboka zomi na isato.
I Ch LinVB 6:46  Bana basusu ba Keat bazwi mboka zomi ya libota lya Efraim, ya libota lya Dan, mpe ya ndambo ya libota lya Manase, lokola zeke elakisi.
I Ch LinVB 6:47  Bana ba Gerson bazwi mboka zomi na isato ya libota lya Izakar, ya libota lya Aser, ya libota lya Neftali mpe ya libota lya Manase o mokili mwa Basan.
I Ch LinVB 6:48  Na bobeti zeke bana ba Merari bazwi mboka zomi na ibale ya libota lya Ruben, ya libota lya Gad mpe ya libota lya Zabulon.
I Ch LinVB 6:49  Ba-Israel bapesi ba-Levi mboka ina inso na bilanga bya penepene.
I Ch LinVB 6:50  O libota lya Yuda, o libota lya Simeon mpe o libota lya Benyamin bapesi ba-Levi mboka iye totangi awa, lokola zeke elakisi bango.
I Ch LinVB 6:51  Bana basusu ba Keat bazwi mboka ya libota lya Efraim.
I Ch LinVB 6:52  Bapesi ba­ngo mboka esika mobomi akoki ko­zwa libiki : Sikem na bilanga bya pene­pene o ngomba ya Efraim, Gezer na bilanga bya penepene,
I Ch LinVB 6:54  Ayalon na Gat-Rimon na mpe bilanga bya penepene,
I Ch LinVB 6:55  mpe o ndambo ya libota lya Manase, Aner na Bileam na mpe bilanga bya penepene. Iye izali mboka ya bana basusu ba Keat.
I Ch LinVB 6:56  O ndambo ya libota lya Manase bana ba Gersom bazwi mboka Golan o mokili mwa Basan na Astarot na mpe bilanga bya penepene.
I Ch LinVB 6:61  O libota lya Neftali bazwi Kedes o Galilea, Kamon na Kiriataim na mpe bilanga bya penepene.
I Ch LinVB 6:62  O libota lya Zabulon, bana basusu ba Merari bazwi mboka Rimon na Tabor na mpe bilanga bya penepene.
I Ch LinVB 6:63  O ngambo ya Yordane epai ya Yeriko, o Esti ya Yordane, o libota lya Ruben bazwi mboka Beser o eliki na Yaksa na mpe bilanga bya penepene ;
I Ch LinVB 6:64  bazwi mpe Kedemot na Mefat na mpe bilanga bya penepene.
I Ch LinVB 6:65  O libota lya Gad bazwi Ramot o Galaad, Makanaim,
Chapter 7
I Ch LinVB 7:1  Izakar aboti bana babali banei : Tola, Pua, Yasub na Simron.
I Ch LinVB 7:2  Tola aboti Uzi, Refaya, Yeriel, Yamai, Yibsam, Semeul ; bango bankumu ba mabota ma Tola. Bango banso basoda ba mpiko ; ntango ya Davidi mabota ma bango mazalaki na basoda nkoto ntuku ibale na ibale na nkama motoba.
I Ch LinVB 7:3  Uzi aboti Yizrakia ; Yizrakia aboti Mikael, Obadia, Yoel na Yisiya ; ba­ngo batano bankumu ba mabota ;
I Ch LinVB 7:4  bazalaki bayangeli ba basoda nkoto ntu­ku isato na motoba, moto na moto azalaki mokonzi wa libota lya ye. Basi na bana bazalaki mpe baike.
I Ch LinVB 7:5  Bandeko ba bango ba libota lya Izakar bazalaki nkoto ntuku mwambe na nsambo, banso basoda ba mpiko, bakabwani bituka bituka.
I Ch LinVB 7:6  Benyamin aboti bana basato : Bela, Beker na Yediael.
I Ch LinVB 7:7  Bela aboti bana batano : Kesbon, Uzi, Uziel, Yerimot na Iri ; bango banso bankumu ba mabota, bato ba mpiko ; bazalaki nkoto ntuku ibale na ibale na ntuku isato na banei.
I Ch LinVB 7:8  Beker aboti bana : Zemira, Yoas, Eliezer, Elioenai, Omri, Yeremot, Abia, Anatot, Alemet ; bango banso bana ba Beker,
I Ch LinVB 7:9  bankumu ba mabota, bato ba mpiko ; bazalaki nkoto ntuku ibale na ibale na nkama ibale.
I Ch LinVB 7:10  Yediael aboti Bilan. Bilan aboti Yeus, Benyamin, Eyud, Kenana, Zetan, Tarsis na Akisakar.
I Ch LinVB 7:11  Bana baye banso ba Yediael bakomi bankumu ba mabota, bato ba mpiko ; bazalaki nkoto zomi na nsambo na nkama ibale ; banso bakoki na mosala mwa soda.
I Ch LinVB 7:12  Supim na Kupim bazalaki bana ba Ir. Kusim azalaki mwana wa Aker.
I Ch LinVB 7:13  Neftali aboti Yakasiel, Guni, Yeser na Salum, bana ba Bila.
I Ch LinVB 7:14  Manase aboti Asriel na makango wa ye, moto wa Aram. Ye aboti mpe Makir, tata wa Galaad.
I Ch LinVB 7:15  Makir abaleli Kupim na Supim mwasi. Nkombo ya ndeko mwasi wa ye Maaka. Mwana wa ye wa babale : Selofekad. Selofekad aboti se bana basi.
I Ch LinVB 7:16  Maaka, mwasi wa Makir, aboti mwana mobali : Peres ; nkombo ya nde­ko wa ye : Seres. Nkombo ya bana ba ye : Ulam na Rekem.
I Ch LinVB 7:17  Ulam aboti Bedan. Bango bana ba Galaad, mwana wa Makir, nkoko wa Manase.
I Ch LinVB 7:18  Ndeko mwasi wa ye Moleket aboti Isod, Abiezer na Makla.
I Ch LinVB 7:20  Efraim aboti Sutela, Sutela aboti Bered, Bered aboti Takat, Takat aboti Eleada, Eleada aboti Takat.
I Ch LinVB 7:21  Takat aboti Zabad, Zabad aboti Sutela, Sutela aboti Ezer na Elead. Bato bauti o Gat babomi bango, zambi bakendeki kuna kobotolo bibwele bya bango.
I Ch LinVB 7:22  Tata wa bango Efraim asali lilaka mikolo mingi, mpe bandeko ba ye ba­kei kobondo ye.
I Ch LinVB 7:23  Na nsima ayebani na mwasi wa ye ; oyo azwi zemi mpe aboti mwana, apesi ye nkombo Beria, lokola ’te ‘libota lya ngai lizali na mpasi’.
I Ch LinVB 7:24  Aboti mpe mwana mwasi nkombo ’te Sera ; oyo atongi mboka Bet-Koron epai ya Nordi mpe epai ya Sudi, na mpe mboka Uzen-Sera.
I Ch LinVB 7:25  Beria aboti Refa na Resef ; Refa aboti Sutelak, Sutelak aboti Takan,
I Ch LinVB 7:26  Takan aboti Ladan, Ladan aboti Amikud, Amikud aboti Elisama,
I Ch LinVB 7:28  Bazalaki na mabelé mingi mpe bafandi o Betel mpe o mboka ya penepene, o Naran epai ya Esti, o Gezer epai ya Westi, o Sikem, o Aya mpe o mboka ya penepene.
I Ch LinVB 7:29  Bana ba Manase bazalaki o Bet-Sean, Tanak, Megido na Dor, na mpe mboka ya penepene. Bana ba Yozefu, mwana wa Israel, bafandaki kuna.
I Ch LinVB 7:30  Aser aboti Timna, Yisva, Yisvi na Beria ; ndeko mwasi wa bango : Sera.
I Ch LinVB 7:31  Beria aboti Keber na Malkiel. Malkiel azalaki tata wa Birzait.
I Ch LinVB 7:32  Keber aboti Yaflet, Semer, Kotam mpe ndeko mwasi wa bango Sua.
I Ch LinVB 7:33  Yaflet aboti Pasak, Bimal na Asfat ; bango bana ba Yaflet.
I Ch LinVB 7:35  Ndeko wa ye Elem aboti Sofa, Yimna, Seles na Amal.
I Ch LinVB 7:40  Bango banso bana ba Aser, bazalaki bankumu, bato nkoto ntuku ibale na motoba bakoki na mosala mwa soda.
Chapter 8
I Ch LinVB 8:1  Benyamin aboti Bela, mwana wa yambo, Asbel mwana wa babale, Akiram mwana wa basato,
I Ch LinVB 8:2  Noka, mwana wa banei, na Rafa, mwana wa batano.
I Ch LinVB 8:6  Eyud aboti bana, baye bazalaki ba­nkumu ba mabota ma Geba, bakambi bandeko ba bango o boombo o Manakat.
I Ch LinVB 8:7  Nkombo ya bana ba Eyud : Naaman, Akia na Gera. Gera moto akambi bango o boombo o mboka esusu ; ye tata wa Uza na Akikud.
I Ch LinVB 8:8  Sakaraim aboti bana o esobe ya Moab, awa asili kolongola basi ba ye Kusim na Baara.
I Ch LinVB 8:9  Na mwasi wa ye wa sika aboti Yobab, Sibia, Mesa, Malkom,
I Ch LinVB 8:10  Yeus, Sakia, Mirma : ba­nso bana ba ye, bankumu ba mabota.
I Ch LinVB 8:12  Elpaal aboti Eber, Miseam na Semed. Ye moto atongi Ono na Lod na mpe mboka ya penepene.
I Ch LinVB 8:13  Beria na Sema bazalaki bankumu ba mabota ma bato ba Ayalon ; bango bakimisi bato ba Gat.
I Ch LinVB 8:18  Yismerai, Yizlia na Yobab bazalaki bana ba Elpaal.
I Ch LinVB 8:28  Bango banso bankumu ba mabota, bakabwani bituka bituka. Bafandi o Yeruzalem.
I Ch LinVB 8:29  Gabaon ezalaki mboka ya Yeiel, tata wa Gabaon, oyo abalaki Maaka,
I Ch LinVB 8:30  na mwana wa ye wa yambo Abdon na Sur, Kis, Baal, Ner, Nadab,
I Ch LinVB 8:32  Miklot aboti Simea. Bango mpe bafandi o Yeruzalem penepene na bandeko ba bango.
I Ch LinVB 8:33  Ner aboti Kis, Kis aboti Saul, Saul aboti Yonatan, Malki-Sua, Abinadab na Esbaal.
I Ch LinVB 8:36  Akaz aboti Yoada, Yoada aboti Alemet, Azmavet na Zimri. Zimri aboti Mosa,
I Ch LinVB 8:37  Mosa aboti Binea, Binea aboti Rafa, Rafa aboti Elasa, Elasa aboti Asel.
I Ch LinVB 8:38  Asel aboti bana babali motoba : Azrikam, Bokru, Yismael, Searia, Obadia, Kanan : bango banso bana ba Asel.
I Ch LinVB 8:39  Ndeko wa ye Esek aboti Ulam, mwana wa yambo, Yeus mwana wa babale, Elifelet mwana wa basato.
I Ch LinVB 8:40  Bana ba Ulam bazalaki bilombe o etumba, bato ba mpiko, bayebi kobete litimbo. Bazalaki na bana mpe na bankoko baike : monkama na ntuku itano ; bango banso bana ba libota lya Benyamin.
Chapter 9
I Ch LinVB 9:1  Basili kotanga ba-Israel banso mpe kokoma nkombo ya bango o buku ya Bakonzi ba Israel, nta­ngo bakangaki bato ba Yuda o boo­mbo o Babilon mpo ya masumu ma bango.
I Ch LinVB 9:2  Ba-Israel bato bapasolaki mbo­ka bakomaki bankolo ba mabelé : banganga Nzambe, ba-Levi na basalisi ba bango.
I Ch LinVB 9:3  Yeruzalem ezalaki mboka esika ba-Yuda, ba-Benyamin, ba-Efraim na ba-Manase bafandaki :
I Ch LinVB 9:4  Utai, mwana wa Amikud, mwana wa Omri, mwana wa Imri, mwana wa Bani, mwana wa Peres, mwana wa Yuda.
I Ch LinVB 9:5  O libota lya Sela : Asaya, mwana wa yambo na bana ba ye.
I Ch LinVB 9:6  O libota lya Zera : Yeuel na bandeko ba bango basusu : bato nkama motoba na ntuku libwa.
I Ch LinVB 9:7  Bato ba Benyamin : Salu, mwana wa Mesulam, mwana wa Odavia, mwana wa Asenua,
I Ch LinVB 9:8  Yibnea, mwana wa Yerokam, Ela mwana wa Uzi, mwana wa Mikri ; Mesulam mwana wa Sefatia, mwana wa Reuel, mwana wa Yibnia.
I Ch LinVB 9:9  Bazalaki bandeko nkama libwa na ntuku itano na motoba. Bango banso bazalaki bankumu ba mabota ma bango.
I Ch LinVB 9:11  Azaria, mwana wa Kilkia, mwana wa Mesulam, mwana wa Sadok, mwana wa Merayot, mwana wa Akitub, kapita wa bakengeli ba Tempelo ya Nzambe.
I Ch LinVB 9:12  Adaya, mwana wa Yerokam, mwana wa Pasekur, mwana wa Malkia, na Masai, mwana wa Adiel, mwana wa Yazera, mwana wa Mesulam, mwana wa Mesilemit, mwana wa Imer.
I Ch LinVB 9:13  Bazalaki bandeko nkoto yoko na nkama nsambo na ntuku motoba. Banso bankumu ba mabota, bato ba mpiko, bazalaki kosala mosala o Tempelo ya Nzambe.
I Ch LinVB 9:14  Ba-Levi : Semaya, mwana wa Kasub, mwana wa Azrikam, mwana wa Kasabia wa etuka ya Merari,
I Ch LinVB 9:15  Bakbakar, Keres, Galal, Matania, mwana wa Mika, mwana wa Zikri, mwana wa Asaf,
I Ch LinVB 9:16  Obadia, mwana wa Semaya, mwana wa Galal, mwana wa Yedutun, na Berekia, mwana wa Asa, mwana wa Elkana, oyo afandaki o mboka ya ba-Netofa.
I Ch LinVB 9:17  Bakengeli ba bizibeli bya Tempelo : Salum, Akub, Talmon, Akiman na bandeko ba bango basusu. Salum aza­laki kapita wa bango,
I Ch LinVB 9:18  ye mokengeli wa ezibeli ya ndako ya mokonzi epai ya Esti tee lelo ; bango bazalaki mpe kokengele bizibeli bya nganda ya ba-Levi.
I Ch LinVB 9:19  Salum, mwana wa Kore, mwana wa Ebiasaf, mwana wa Kore, na bandeko basusu ba libota lya Kore bazalaki na mosala mwa kokengele monoko mwa Ema ya Likita ; kalakala batata ba bango bazalaka mpe na mosala mwa kokengele monoko mwa nganda ya Yawe.
I Ch LinVB 9:20  Kala Pinekas, mwana wa Eleazar azalaka kapita wa bango (Yawe azala na ye !).
I Ch LinVB 9:21  Zakaria, mwana wa Meselemia, azalaki mpe mokengeli wa monoko mwa Ema ya Likita.
I Ch LinVB 9:22  Baye banso baponomi mpo ya mosala mwa bokengeli ndako, bazalaki nkama ibale na zomi na babale ; bakomami o mboka ya bango ; Davidi na Samuel, Momoni-makambo, batiaki bango o mosala mona seko.
I Ch LinVB 9:23  Bango na bana ba bango bazwaki mosala mwa bokengeli bizibeli bya Tempelo ya Yawe mpe bya ndako ya Ema ya Likita.
I Ch LinVB 9:24  Bakengeli bazalaki koteleme o bipai binei : o Esti, Westi, Nordi mpe Sudi.
I Ch LinVB 9:25  Bandeko ba bango, baye bafandaki o mboka ya bango, basengelaki koya likelemba mpo ya kosalisa bango.
I Ch LinVB 9:26  Kasi bakapita banei ba bakengeli bafandaki wana ntango inso. Ba-Levi bazalaki kotala biteni bya ndako na bibombelo bya ndako ya Nzambe.
I Ch LinVB 9:27  Na butu bazalaki kolala zongazo­nga na ndako ya Nzambe, mpo ba­ngo bazalaki kokengele ndako ya Nza­mbe mpe kofungola yango nto­ngo inso.
I Ch LinVB 9:28  Basusu bazalaki na mosala mwa kotala biloko bya ndako ya Nzambe : kotanga byango mbala inso bakotisi to babimisi byango.
I Ch LinVB 9:29  Basusu bazalaki kotala mbeki, mingi mbeki isantu, na fufu, vino, mafuta, mpaka na malasi.
I Ch LinVB 9:30  Kasi banganga Nzambe bazalaki kosangisa biloko mpo basala na byango malasi.
I Ch LinVB 9:31  Mpo ya lobokó la ye, mo-Levi Matitia, mwana wa yambo wa Salum wa libota lya Kore, azwaki mosala mwa kolamba minkate mya mabo­nza.
I Ch LinVB 9:32  Bandeko basusu ba etuka ya Keat bazwaki mosala mwa kotia ma­mpa ma libonza o meza, mikolo mya Sabato minso.
I Ch LinVB 9:33  Bayembi baye bazalaki bankumu ba mabota ma Levi, bafandi o ndako ike pene na Tempelo ; bazalaki na mosala mosusu te, zambi bazalaki kosala butu moi.
I Ch LinVB 9:34  Bango bankumu ba libota lya Levi, bakonzi ba mabota ma bango bafandaki o Yeruzalem.
I Ch LinVB 9:35  Gabaon ezalaki mboka ya Yeiel, tata wa Gabaon, oyo abalaki Maaka.
I Ch LinVB 9:36  Abotaki liboso Abdon, na nsima : Sur, Kis, Baal, Ner, Nadab,
I Ch LinVB 9:38  Miklot aboti Sineam. Bango mpe bafandaki o Yeruzalem penepene na bandeko ba bango.
I Ch LinVB 9:39  Ner aboti Kis, Kis aboti Saul, Saul aboti Yonatan, Malki-Sua, Abinadab na Esbaal.
I Ch LinVB 9:42  Akaz aboti Yara, Yara aboti Alemet, Azmavet na Zimri. Zimri aboti Mosa ;
I Ch LinVB 9:43  Mosa aboti Binea, Binea aboti Refaya, Refaya aboti Eleasa, Eleasa aboti Asel.
I Ch LinVB 9:44  Asel aboti bana babali motoba : Azrikam, Bokru, Yismael, Searia, Obadia na Kanan. Bango banso bana ba Asel.
Chapter 10
I Ch LinVB 10:1  Ba-Filisti babundi etumba na Israel. Ba-Israel bakimi, bakwei mpe bakufi o ngomba Gilboa.
I Ch LinVB 10:2  Ba-Filisti bakomi penepene na Saul na bana ba ye. Babomi Yonatan, Abinadab na Malki-Sua, bana ba Saul.
I Ch LinVB 10:3  Sikawa etumba ezongeli Saul. Bato ba litimbo bamoni ye, mpe Saul aba-ngi mingi.
I Ch LinVB 10:4  Alobi na moto amemi bibuneli bya ye : « Bimisa mopanga mwa yo mpe tubola ngai, mpo ’te basutu, baye bakatemi nzoto te, baseke ngai te. » Kasi moto amemi bibuneli bya ye aboyi, mpo abangi kosala ya­ngo. Sikawa Saul akamati mopanga mpe amitubi.
I Ch LinVB 10:5  Emoni mosali wa Saul ’te Saul akufi, asali se lokola Saul, mpe akufi se bongo.
I Ch LinVB 10:6  Saul na bana ba ye basato bakufi ; se o mokolo moko libota lya ye mobimba likufi.
I Ch LinVB 10:7  Emoni ba-Israel ’te baninga ba bango bakimi etumba, na mpe liwa lya Saul na bana ba ye, banso batiki mboka ya bango mpe bakimi. Ba-Filisti bayei kofanda wana.
I Ch LinVB 10:8  Mokolo mwa nsima ba-Filisti bakei kobotolo biloko bya bawa. Bakuti bibembe bya Saul na bana ba ye bilali o ngomba Gilboa.
I Ch LinVB 10:9  Babotoli ye biloko, bakati ye motó mpe bakamati bibuneli bya ye. Batambwisi bya­ngo o mokili mwa bango mpo ’te balakisa byango na banzambe ba bango mpe na bato banso ba ekolo.
I Ch LinVB 10:10  Batii bibuneli bya Saul o ndako ya nzambe wa bango ; babaki motó mwa ye o tempelo ya Dagon.
I Ch LinVB 10:11  Ba-Yabes o mokili mwa Galaad bayoki makambo manso ba-Filisti ba­salaki Saul.
I Ch LinVB 10:12  Basoda ba mpiko bakei kolongola bibembe bya Saul na bana ba ye, bakei kotika byango o Yabes. Na nsima balali nzala mikolo nsambo.
I Ch LinVB 10:13  Saul akufi zambi aboyaki kotosa mibeko mya Yawe mpe atosaki liloba lya Yawe te ; atunaki mpe molimo mwa mowei.
I Ch LinVB 10:14  Atunaki Yawe te, mpe Yawe alongoli ye o bomoi, mpe apesi bokonzi bwa ekolo o maboko ma Davidi, mwana wa Yese.
Chapter 11
I Ch LinVB 11:1  Ba-Israel banso bayei epai ya Davidi o Ebron, balobi : « Biso na yo tozali makila moko.
I Ch LinVB 11:2  Uta kala, ntango Saul azalaka mokonzi, yo moto ozalaki kotambwisa mpe koyangela basoda ba Israel, mpe Yawe Nzambe wa yo alobaki na yo : Yo moto okoleisa ekolo ya ngai Israel, okozala mokonzi wa ekolo ya ngai Israel. »
I Ch LinVB 11:3  Bakolo banso ba Israel bakei epai ya mokonzi o Ebron, mpe Davidi akati na bango bondeko o miso ma Yawe. Na nsima bapakoli Davidi mafuta mpo ’te azala mokonzi wa Israel, se lokola Yawe alobaki na monoko mwa Samuel.
I Ch LinVB 11:4  Davidi na basoda ba ye bakei kobunda na Yeruzalem, o ntango ena ezalaka Yebus : ba-Yebus bazalaki ba­nkolo ba mabelé.
I Ch LinVB 11:5  Bango balobi na Davidi : « Okokoto awa te. » Kasi Davidi abotoli ebombamelo ya Sion, eye ekomi Engumba ya Davidi.
I Ch LinVB 11:6  Davidi alobi : « Moto wa yambo akoboma mo-Yebus akokoma mokonzi mpe nkumu. » Yoab, mwana wa Seruya, akoti o mboka liboso, akomi bongo mokonzi monene wa basoda.
I Ch LinVB 11:7  Davidi akei kofanda o ebombamelo, eye bakotangaka Engumba ya Davidi.
I Ch LinVB 11:8  Na nsima abongisi ndako isusu ya mboka, banda ndako ya Milo tee nda­ko ya mokonzi, mpe Yoab asilisi mosala mwa kolendisa mboka.
I Ch LinVB 11:9  Davidi akoli na nguya, mpe Yawe wa bokasi bonso azalaki na ye.
I Ch LinVB 11:10  Baye bazalaki bakonzi ba basoda ba Davidi mpe basalisi ye ntango i­nso o bokonzi bwa ye mpe baluboli ye mokonzi wa Israel elongo na ba-Israel banso lokola Yawe alobaki, ba­ngo baye :
I Ch LinVB 11:11  Tala molongo mwa nkombo ya bilombe ba Davidi : Yasobeam, mwana wa Kakmoni, komanda wa bilo-mbe basato. Ye moto abomaki bato nkama isato na likongo, ye moko.
I Ch LinVB 11:12  Na nsima Eleazar, mwana wa Dodo, moto wa Ako ; azalaki moko wa bilombe basato.
I Ch LinVB 11:13  Azalaki na Davidi o Pas-Damim o ntango ba-Filisti bamilengeleki mpo ya etumba. Kuna ezalaki elanga etondi na mbuma ya mampa ; basoda ba Israel bakimi ba-Filisti,
I Ch LinVB 11:14  kasi Davidi na baninga bakei koteleme o kati ya elanga, babundi etumba mpe babomi ba-Filisti. Yawe apesi bango lilonga linene.
I Ch LinVB 11:15  Bato basato o kati ya bilombe ntu­ku isato bakei epai ya Davidi o ngomba ya mabanga o mobenga mwa Adulam, ntango ba-Filisti bapiki nga­nda o lobwaku la Refaim.
I Ch LinVB 11:16  Davidi azalaki o mobenga mpe ndambo ya ba-Filisti bazalaki o Beteleme.
I Ch LinVB 11:17  Davidi ayoki mposa ya mai, alobi : « Nani akotokela ngai mai o libulu penepene na ezibeli ya Beteleme ? »
I Ch LinVB 11:18  Bilombe basato bayingeli o nganda ya ba-Filisti, batoki mai o libulu penepene na ezibeli ya Beteleme mpe bamemi mango epai ya Davidi. Kasi Davidi alingi komele mango te mpe asopi mango o nse mpo ya Yawe,
I Ch LinVB 11:19  alobi : « Yawe apesa ngai etumbu soko nakomele mai ! Namele nde makila ma bato bandimi kokufa mpo ya ngai ? Solo, mpo ya komemele ngai mai, babangaki liwa te ! » Yango wana aboyi komele mai. Mosala mona bilombe basato basalaki.
I Ch LinVB 11:20  Abisai, ndeko wa Yoab, azalaki komanda wa basoda ntuku isato. Ye moto abomaki bato nkama isato na likongo ; bongo azwi lokumu o kati ya bango ntuku isato.
I Ch LinVB 11:21  Ata aleki ba­ngo ntuku isato na lokumu, mpe akomi komanda wa bango, bakotangaka ye o molongo mwa bilombe basato te.
I Ch LinVB 11:22  Benaya, mwana wa Yoyada, soda wa mpiko, moto abimisi misala minene ebele, autaki o Kabseel. Ye moto abomi bilombe babale ba Moab ; ye moto akoti o libulu mpe abomi ntambwe o mokolo mbula ya mpe­mbe enokoki.
I Ch LinVB 11:23  Ye moto abomi mo-Ezipeti, moto bolai maboko matano. Mo-Ezipeti azalaki na likongo o loboko, linene lokola etongeli ya bato­ngi bilamba. Akei kokutana na ye na lingenda o loboko, abotoli likongo o loboko la mo-Ezipeti mpe abomi ye na likongo lya ye moko.
I Ch LinVB 11:24  Mpo ya likambo liye Benaya, mwana wa Yoyada, akomi moto wa lokumu o ntei ya basoda ntuku isato.
I Ch LinVB 11:25  Ata aleki bango ntuku isato na lokumu, bakotangaka ye o molongo mwa bilombe basato te. Davidi atii ye komanda wa bake­ngeli ba ye.
I Ch LinVB 11:26  Basoda basusu ba mpiko : Asael, ndeko wa Yoab ; Elkanan, mwana wa Dodo wa Beteleme ;
I Ch LinVB 11:27  Samot, moto wa Arar ; Eles, moto wa Pelon ;
I Ch LinVB 11:28  Ira, mwana wa Ikes, moto wa Tekoa ; Abiezer, moto wa Anatot ;
I Ch LinVB 11:29  Sibekai, moto wa Kusa ; Ilai, moto wa Ako ;
I Ch LinVB 11:30  Mayerai, moto wa Netofa ; Keled mwana wa Baana, moto wa Netofa ;
I Ch LinVB 11:31  Itai, mwana wa Ribai, moto wa Gibea wa libota lya Benyamin ; Benaya, moto wa Pireaton ;
I Ch LinVB 11:32  Kurai, moto wa lobwaku la Gaas ; Abiel moto wa Bet-Araba ;
I Ch LinVB 11:33  Azmavet, moto wa Bakurim ; Eliaba, moto wa Saalbon ;
I Ch LinVB 11:34  Bene-Kasem, moto wa Gizon ; Yonatan, mwana wa Sage, moto wa Arar ;
I Ch LinVB 11:35  Akiam, mwana wa Sakar, moto wa Arar ; Elifelet, mwana wa Ur ;
I Ch LinVB 11:36  Kefer, moto wa Mekera ; Akia, moto wa Pelon ;
I Ch LinVB 11:37  Kesro, moto wa Karmel ; Narai, mwana wa Esbai ;
I Ch LinVB 11:38  Yoel, ndeko wa Natan ; Mibkar, mwana wa Agri ;
I Ch LinVB 11:39  Selek, moto wa Amon ; Nakrai, moto wa Beerot, oyo azalaki komeme bibuneli bya Yoab, mwana wa Seruya ;
I Ch LinVB 11:40  Ira, moto wa Yatir ; Gareb, moto wa Yatir ;
I Ch LinVB 11:42  Adina, mwana wa Siza wa libota lya Ruben, nkumu wa mabota ma Ruben mpe komanda wa basoda ntuku isato ;
I Ch LinVB 11:43  Kanan, mwa­na wa Maaka ; Yozafat, moto wa Mitna ;
I Ch LinVB 11:44  Uzia, moto wa Astarot ; Sama na Yeuel, bana ba Kotam, moto wa Aroer ;
I Ch LinVB 11:45  Yediael, mwana wa Simri na ndeko wa ye Yoka, ba-Tisi ;
I Ch LinVB 11:46  Eliel, moto wa Makav ; Yeribai na Yosavia, bana ba Elnam ; na Yitma, moto wa Moab ;
Chapter 12
I Ch LinVB 12:1  Bato basusu bakei kolanda Davidi o Siklag, o eleko aba-ngi kobimela Saul, mwana wa Kis ; bazalaki basoda ba mpiko, bameseni na bitumba,
I Ch LinVB 12:2  bayebi kobete litimbo mpe kobwaka mabanga na loboko la mobali mpe la mwasi. Bandeko ba Saul wa libota lya Be­nyamin bazalaki wana :
I Ch LinVB 12:3  mokonzi Akiezer na Yoas, bana ba Asema wa Gibea, Yeziel na Pelet, bana ba Azmavet, Beraka na Yeku, ba-Anatot,
I Ch LinVB 12:4  Yismaya wa Gabaon, soda wa mpiko o kati ya basoda ntuku isato mpe komanda wa bango ;
I Ch LinVB 12:5  Yirmeya, Yakaziel, Yokanan na Yozabad wa Gederot,
I Ch LinVB 12:6  Eluzai, Yerimot, Bealia, Semaria, Sefatia wa Karuf,
I Ch LinVB 12:7  Elkana, Yisia, Azarel, Yowezer, Yasobeam, bana ba Kore,
I Ch LinVB 12:9  Bato ba libota lya Gad bakimi mboka ya bango mpe bakei epai ya Davidi o esika azalaki kobombama o eliki. Bazalaki basoda ba mpiko, bameseni na bitumba, bazalaki na nguba mpe na makongo ; bazalaki makasi lokola ntambwe mpe bayebi kopota mbangu lokola mboloko o ngomba.
I Ch LinVB 12:10  Ezer azalaki mokonzi ; Obadia moto wa babale, Eliab moto wa basato,
I Ch LinVB 12:14  Yirmea moto wa zomi, Makbanai moto wa zomi na moko.
I Ch LinVB 12:15  Bango banso bato ba libota lya Gad, bakomanda ba basoda. Oyo azalaki mokuse akambi bato monkama, oyo azalaki molai bato nkoto yoko.
I Ch LinVB 12:16  Bango bakatisi Yordane o sanza ya yambo, o eleko mai makotiyolaka makasi, mpe bakimisi bato bakofa-ndaka o mabongo ma ebale epai ya Esti na epai ya Westi.
I Ch LinVB 12:17  Bato basusu ba libota lya Benyamin mpe ba Yuda bakei koluka Davidi o esika abombami.
I Ch LinVB 12:18  Davidi akei kozwana na bango, alobi : « Soko boyei kosalisa ngai lokola bandeko, nandimi kokamata bino na motema moko ; kasi soko boyei kokosa ngai mpe bosalisi banguna ba ngai, ata nasali bino mabe soki te, Nzambe wa bankoko ba biso amono likambo lya bino mpe asambisa bino ! »
I Ch LinVB 12:19  Elimo ya Nzambe ekiteli Amasai, komanda wa bilombe ntuku isato, bongo asakoli : « Kende, e Davidi ! Boboto bozala na yo, mwana wa Yese ! Boboto bozala na yo mpe na banso bakosalisa yo, mpo Nzambe wa yo akosalisa yo ! » Davidi ayambi bango mpe atii ba­ngo lokola bakomanda ba basoda ba ye.
I Ch LinVB 12:20  Bato basusu ba libota lya Manase bakei epai ya Davidi ntango ayaki elo­ngo na ba-Filisti kobunda etumba na Saul, kasi bakokaki kosalisa ba-Filisti mingi te, zambi bakonzi ba Filisti basangani likita mpe balongoli Davidi, balobi : « Akoki kozongela nkolo wa ye Saul, mbele akoboma biso ! »
I Ch LinVB 12:21  O ntango Davidi akei o Siklag, ba-Manase basusu bandimi kolanda Davidi, bango baye : Adna, Yozabad, Yediael, Mikael, Yozabad, Eliu, Siletai, bato bazalaki bakomanda ba basoda nkoto o mokili mwa Manase.
I Ch LinVB 12:22  Bango bato balendisi Davidi na basoda ba ye ; banso bazalaki bato ba mpiko, bakomi bakomanda ba basoda.
I Ch LinVB 12:23  Mokolo na mokolo bato ba sika bayei kosalisa Davidi, bongo limpi­nga lya ye likomi linene mpenza lokola limpinga lya Nzambe.
I Ch LinVB 12:24  Motango mwa basoda bakoki na etumba mpe balandi Davidi o Ebron mpo ’te balubola ye mokonzi o esika ya Saul lokola Yawe atindaki :
I Ch LinVB 12:25  Ba-Yuda bayebi kobunda na nguba mpe na likongo : bato 6 800, basoda bakoki na etumba.
I Ch LinVB 12:26  Ba-Simeon : 7 100 ; bazalaki bilo-mbe o etumba.
I Ch LinVB 12:28  na mpe Yoyada, mokonzi wa bato ba Arone na bato ba ye 3 700,
I Ch LinVB 12:29  na mpe Sadok, elenge mobali wa mpiko na bankumu ntuku ibale na babale ba libota lya ye.
I Ch LinVB 12:30  Ba-Benyamin : 3 000, se bandeko ba Saul. O kati ya bango, baike bazalaki kin’o mokolo mona kosalela Saul.
I Ch LinVB 12:31  Ba-Efraim : 20 800, banso basoda ba mpiko, bato ba lokumu o kati ya libota lya bango.
I Ch LinVB 12:32  Bato ba ndambo ya libota lya Manase : 18 000, banso babyangemaki moko moko mpo ’te balubola Davidi mokonzi.
I Ch LinVB 12:33  Ba-Izakar bayebi malamu mpe­nza nini mpe boniboni ba-Israel basengeli kosala : Bakonzi nkama ibale na bandeko ba bango banso balandaki bango.
I Ch LinVB 12:34  Ba-Zabulon : 50 000, bakoki na mo­sala mwa soda, bameseni na bitumba, bayebi kobunda na bibuneli binso ; bandimi kosalisa na motema moko.
I Ch LinVB 12:35  Ba-Neftali : bayangeli nkoto yoko elongo na basoda 37 000, baye bazalaki na nguba mpe na likongo.
I Ch LinVB 12:38  O ngambo ya Yordane, bato 120 000 ba libota lya Ruben, ba libota lya Gad, ba ndambo ya libota lya Manase, bayei na bibuneli ndenge na ndenge.
I Ch LinVB 12:39  Basoda baye banso bamilengeli mpo ya kobunda, bayei kosangana o Ebron na motema moko mpenza mpo ’te balubola Davidi mokonzi wa Israel mobimba. Ba-Israel basusu ba­nso mpe, motema moko, bandimi ’te Davidi azala mokonzi.
I Ch LinVB 12:40  Bafandi epai ya Davidi mikolo misato, balei mpe bameli. Bandeko ba bango balambelaki bango biloko.
I Ch LinVB 12:41  Bato bazalaki pe­nepene na bato ba mokili mwa Izakar, Zabulon na Neftali bayei na biloko bya kolia ; kamela, mpunda na ngo­mbe izalaki komeme byango : fufu, minkate mya mbuma ya figi, mbuma ya vino ikauki, vino, mafuta, mpata na ngombe ebele. O Israel ese­ngo ezalaki enene.
Chapter 13
I Ch LinVB 13:1  Davidi abengi bakomanda ba basoda nkoto yoko mpe bakomanda ba basoda monkama, na ba­nkumu banso o likita.
I Ch LinVB 13:2  Na nsima alobi na ba-Israel banso basangani wana : « Soko bino bomoni yango malamu, mpe soko Yawe Nzambe wa biso andimi bongo, totinda maloba na bandeko ba biso batikali o mikili misusu mya Israel mpe na banganga Nzambe na ba-Levi, baye bakofa­ndaka o mboka ya bango mpe o bisobe bya penepene, totuna bango soko bandimi kolanda biso.
I Ch LinVB 13:3  Na nsima tokozongisa Sanduku ya Nzambe wa bi­so epai ya biso, mpo tobosanaki yango o ntango Saul azalaki moko­nzi. »
I Ch LinVB 13:4  Bato basangani likita bandimi kosala bongo, mpo banso bamoni lika­mbo lyango malamu.
I Ch LinVB 13:5  Davidi asangisi ba-Israel banso, banda moluka mwa Ezipeti tee Amat, mpo ’te balongola Sanduku ya Nzambe o Kiriat-Yearim.
I Ch LinVB 13:6  Elongo na ba-Israel banso akei o Baala epai ya Kiriat-Yearim, o mokili mwa Yuda mpo ’te balongola Sanduku ya Nzambe kuna, mpe batia ya­ngo o esika bakobondelaka nkombo ya Yawe, oyo akofandaka likolo lya bakerubim.
I Ch LinVB 13:7  Babutisi Sanduku ya Nza­mbe o likalo lya sika mpe balo­ngoli yango o ndako ya Abinadab. Uza na Akio batambwisi likalo.
I Ch LinVB 13:8  Davidi na bato banso ba Israel babineli Nzambe mabina na makasi ma bango manso, bayembi nzembo mpe babeti biyembeli ndenge na ndenge : nzenze, likembe, mbonda, migbala na mindule.
I Ch LinVB 13:9  Bakomi o etutelo ya Kidon. Uza atandi loboko mpo ya kosimba Sa­nduku, zambi ngombe ilingi kokweisa yango.
I Ch LinVB 13:10  Yawe asiliki mingi na Uza mpe abomi ye, zambi asimbaki Sa­nduku. Akufi se wana o miso ma Nza­mbe.
I Ch LinVB 13:11  Davidi ayoki motema nso­mo, zambi Yawe abomi Uza. Bapesi esika ena nkombo Peres-Uza ; ezali naino na nkombo yango tee lelo.
I Ch LinVB 13:12  Davidi akomi kobanga o mokolo mona, amituni : « Ndenge nini nakokoka kokotisa Sanduku ya Yawe epai ya ngai ? »
I Ch LinVB 13:13  Bongo Davidi atiki komeme Sanduku ya Yawe epai ya ye, o Engumba ya Davidi, kasi akei kotika yango o ndako ya Obed-Edom, moto wa Gat.
I Ch LinVB 13:14  Sanduku ya Yawe etikali sanza isato o ndako ya Obed-Edom ; Yawe abenisi ndako ya Obed-Edom na libota lya ye mobimba.
Chapter 14
I Ch LinVB 14:1  Kiram, mokonzi wa Tiro, ati­ndi bantoma epai ya Davidi. Bayei na mabaya ma sédere, na bato bayebi kokata mabanga mpe na bakabinda mpo batongela ye ndako.
I Ch LinVB 14:2  Sikawa Davidi ayebi ’te Yawe aluboli ye mokonzi o Israel mpe ato­mboli bokonzi bwa ye mpo ya bolamu bwa Israel, ekolo ya ye.
I Ch LinVB 14:3  Davidi akamati naino basi basusu mpe aboti bana babali na bana basi o Yeruzalem.
I Ch LinVB 14:4  Nkombo ya bana babotami o Yeruzalem : Samua, Sobab, Natan, Salomo,
I Ch LinVB 14:8  Eyoki ba-Filisti ’te bapakoli Davidi mafuta mpo azala mokonzi wa Israel mobimba, banso bakei mpo ya kokanga ye ; Davidi ayoki yango mpe akei kokutana na bango.
I Ch LinVB 14:9  Ba-Filisti bayei mpe bamilengeli mpo ya kobunda o lobwaku la ba-Refaim.
I Ch LinVB 14:10  Davidi atuni Nzambe : « Nakende kobu­nda na ba-Filisti ? Okokaba bango o maboko ma ngai ? » Yawe azongisi : « Kende kobunda na bango, nakokaba bango o maboko ma yo. »
I Ch LinVB 14:11  Bongo akei o Baal-Perasim mpe Davidi alo­ngi bango, alobi : « Nzambe apasolaki nzela o kati ya banguna na maboko ma ngai, lokola mai makopasolaka nzela o mabelé ! » Yango wana bapesi esika ena nkombo Baal-Perasim.
I Ch LinVB 14:12  Ba­nguna batiki bikeko bya bango kuna. Davidi alobi : « Batumba byango o móto. »
I Ch LinVB 14:14  Davidi atuni Nzambe lisusu, mpe Nzambe azongiseli ye : « Tika kolanda bango, landa nzela esusu mosika na bango mpe okokuta bango o boso bwa nzete ya wenge.
I Ch LinVB 14:15  Ntango okoyoka lokito la makolo likolo lya nzete ena, kende kobunda, zambi Nzambe wa yo akokende liboso lya yo mpo ya koboma limpi­nga lya ba-Filisti. »
I Ch LinVB 14:16  Davidi asali lokola Nzambe atindaki ye. Balongi basoda ba Filisti ut’o Gabaon tee Gezer.
I Ch LinVB 14:17  Lokumu la Davidi lotamboli o bikolo binso, mpe Yawe asali ’te bato ba mikili minso babanga ye.
Chapter 15
I Ch LinVB 15:1  Davidi amitongeli ndako isusu o Engumba ya Davidi. Abongiseli Sanduku ya Nzambe esika : atelemisi ema mpo ya kobomba yango.
I Ch LinVB 15:2  Alobi : Bobele ba-Levi bakoki komeme Sanduku ya Nzambe, za­mbi Yawe aponi bango bameme Sa­nduku ya Yawe mpe basalela ye libela.
I Ch LinVB 15:3  Davidi asangisi ba-Israel banso o Yeruzalem bameme Sanduku ya Yawe o esika balengeli mpo ya yango.
I Ch LinVB 15:5  O kati ya bana ba Keat, abe­ngi komanda Uriel na bandeko ba ye mo­nkama na ntuku ibale ;
I Ch LinVB 15:6  o kati ya bana ba Merari abengi komanda Asaya na bandeko ba ye nkama ibale na ntuku ibale ;
I Ch LinVB 15:7  o kati ya bana ba Gersom abengi komanda Yoel na bandeko ba ye monkama na ntuku isato ;
I Ch LinVB 15:8  o kati ya bana ba Elisafam abengi komanda Semaya na bandeko ba ye nka­ma ibale ;
I Ch LinVB 15:9  o kati ya bana ba Ebron abengi komanda Eliel na ba­ndeko ba ye ntuku mwambe ;
I Ch LinVB 15:10  o kati ya bana ba Uziel abengi komanda Aminadab na bandeko ba ye monkama na zomi na babale.
I Ch LinVB 15:11  Davidi abe-ngi banganga Nzambe Sadok na Ebiatar na mpe ba-Levi : Uriel, Asaya, Yoel, Semaya, Eliel na Aminadab,
I Ch LinVB 15:12  alobi na bango : « Bozali bakonzi ba mabota ma ba-Levi. Bino na bandeko ba bino bomipetola, bomeme Sanduku ya Yawe Nzambe wa Israel o esika nalengeli mpo ya yango.
I Ch LinVB 15:13  Mpo mbala eleki, awa bino bozalaki te, Yawe Nzambe wa biso apesaki biso etumbu, zambi totunaki ye te bo ebongi. »
I Ch LinVB 15:14  Banganga Nzambe na ba-Levi bamipetoli bongo mpo ya komeme Sanduku ya Yawe Nzambe wa Israel.
I Ch LinVB 15:15  Bana ba libota lya Levi bamemi Sanduku ya Nzambe lokola Yawe alobaki na monoko mwa Moze ; batii mabaya ma Sanduku o mapeke ma bango.
I Ch LinVB 15:16  Na nsima Davidi atindi bakonzi ba mabota ma Levi ’te bandeko ba bango bayembi bazala mpe, bameme biyembeli bya bango : nzenze, loko­mbe na migbala, babete byango makasi mpo balakisa esengo ya bango.
I Ch LinVB 15:17  Ba-Levi baponi Eman, mwana wa Yoel, mpe o kati ya bandeko ba ye baponi Asaf, mwana wa Berekia, Etan mwana wa Kusaya wa etuka ya Merari.
I Ch LinVB 15:18  Baye balandaki bango, ba­ndeko ba bango : Zekaria, Uziel, Semiramot, Yekiel, Uni, Eliab, Benaya, Maseya, Matitia, Elifeleu, Mikneya, Obed-Edom na Yeiel bakengeli ba bizibeli bya Tempelo.
I Ch LinVB 15:19  Bayembi : Eman, Asaf na Etan bazalaki na migbala mya mbengi mpo ya kobete lomeko la miziki.
I Ch LinVB 15:20  Zekaria, Uziel, Semiramot, Yekiel, Uni, Eliab, Maseya na Benaya babeti nze­nze mpo ya mingongo mya likolo.
I Ch LinVB 15:21  Matitia, Elifeleu, Mikneya, Obed-Edom, Yeiel na Azazia bakambi nze­mbo mpe babeti nzenze isusu mpo ya mingongo mya nse.
I Ch LinVB 15:22  Kenania, kapita wa ba-Levi baye bamemi biyembeli, azalaki kotala makambo ma komeme biloko, mpo ameseni na mosala mwa­ngo.
I Ch LinVB 15:23  Berekia na Elkana bazalaki bake­ngeli ba Sanduku ya Nzambe.
I Ch LinVB 15:24  Ba­nganga Nzambe Sebania, Yozafat, Netaneel, Amasai, Zekaria, Benaya na Eliezer bazalaki kobete mindule o boso bwa Sanduku ya Nzambe. Obed-Edom na Yekia bazalaki kokengele Sanduku.
I Ch LinVB 15:25  Bongo Davidi, bakolo ba Israel na bakomanda ba basoda nkoto bakei na Sanduku ya Bondeko bwa Yawe na esengo mpenza, babimisi yango o ndako ya Obed-Edom.
I Ch LinVB 15:26  Mpo ’te Nza­mbe asalisa ba-Levi bazalaki komeme Sanduku, babonzeli Nzambe ngombe babali nsambo na mpata babali nsambo.
I Ch LinVB 15:27  Davidi alati elamba ya malekani kitoko, mpe ba-Levi banso bamemi Sanduku, na bayembi na Kenania, kapita wa baye bamemi biloko, lokola. Davidi alataki mpe ela­mba ya efod ya malekani.
I Ch LinVB 15:28  Ba-Israel banso batamboli bongo na Sanduku ya Bondeko ya Yawe, bagangi na nsai, babeti maseke, mindule na migbala, balelisi nzenze mpe likembe lya ba­ngo.
I Ch LinVB 15:29  O ntango Sanduku ya Yawe ekomi o Engumba ya Davidi, Mikal, mwana wa Saul agumbami o lininisa. Amoni ndenge mokonzi azalaki kobina mpe kosepela ; o kati ya motema akinoli ye.
Chapter 16
I Ch LinVB 16:1  Bakei na Sanduku ya Nzambe mpe batii yango o ema eye Davidi atelemisaki na ntina ena. Na nsima babonzeli Nzambe mabo­nza ma kotumba na miboma mya bondeko.
I Ch LinVB 16:2  Esilisi Davidi kobonza mabonza ma kotumba na miboma mya bondeko, abenisi bato o nkombo ya Yawe.
I Ch LinVB 16:3  Na nsima apesi ba-Israel banso, ná babali ná basi, mwa limpa, mopiko moko mwa mbuma ya figi mpe monkate moko mwa mbuma ya vino.
I Ch LinVB 16:4  Davidi apesi ba-Levi mosala o boso bwa Sanduku ya Yawe : basambela, bakumisa mpe bayembela Yawe Nza­mbe wa Israel.
I Ch LinVB 16:5  Aponi Asaf azala kapita, Zekaria azala nsima ya ye. Na nsima aponi Yeiel, Semiramot, Yekiel, Matitia, Eliab, Benaya, Obed-Edom na Yeiel. Bango bazalaki kobete nzenze na likembe, Asaf azalaki kolelisa migbala.
I Ch LinVB 16:6  Banganga Nzambe Benaya na Yakaziel bazalaki kobete mondule ntango inso o boso bwa Sanduku ya Nzambe.
I Ch LinVB 16:7  O mokolo mona Davidi atindi mbala ya yambo Asaf na bandeko ba ye bayembela Ya­we nzembo eye :
I Ch LinVB 16:8  Bokumisa Yawe, bosakola nkombo ya ye, boyebisa bikolo misala mya ye minso.
I Ch LinVB 16:9  Boyembela ye nzembo, bokumisa ye, boloba makamwisi ma ye ma­nso.
I Ch LinVB 16:10  Bomikumisa mpo ya nkombo ya ye esantu ; bino bato bokoluka Yawe, boyoka esengo.
I Ch LinVB 16:11  Boluka Yawe na bokasi bwa ye, bomeka kozala ntango inso penepene na ye.
I Ch LinVB 16:12  Bokundola o mitema makamwisi asalaki, bilembo mpe bosambi bwa ye.
I Ch LinVB 16:13  Bino bato ba libota lya Israel, mosaleli wa ye, bino bana ba Yakob, baye Nzambe aponoki.
I Ch LinVB 16:14  Ye mpenza azali Yawe Nzambe wa biso, oyo akoyangelaka mokili mobimba.
I Ch LinVB 16:15  Bokundola bondeko bwa ye ntango inso, na maloba alobaki mpo ya mabota nkoto,
I Ch LinVB 16:16  bondeko akataki na Abarama mpe ndai alayelaki Izaka.
I Ch LinVB 16:17  Akomisi bwango mobeko mpo ya Yakob, bondeko bwa seko mpo ya Israel,
I Ch LinVB 16:18  ntango alobaki : Nakopesa yo Kanana, ekozala mabelé nakopesa yo.
I Ch LinVB 16:19  O ntango ena bakokaki koyeba motango mwa bino, bozalaki se mwa liboke lya bauta.
I Ch LinVB 16:20  Bozalaki kotelengana o bikolo bi­nso, botiki mokili moko, boleki o mokili mosusu.
I Ch LinVB 16:21  Alingaki te ’te banyokolo bino mpe mpo ya bino apesaki etumbu na bakonzi basusu :
I Ch LinVB 16:22  « Bosimba basantu ba ngai na maboko te, bosala baprofeta ba ngai mabe te ! »
I Ch LinVB 16:23  O nse mobimba boyembela Yawe, bosakola libiki lya ye mokolo na mokolo.
I Ch LinVB 16:24  Bosangela bampaya nkembo ya ye, bosakola makamwisi ma ye o bikolo binso.
I Ch LinVB 16:25  Yawe azali monene, azali na lokumu lonene, ye Nzambe nta bokasi, aleki banzambe banso.
I Ch LinVB 16:26  Banzambe ba bikolo bazali se mpa­mba, bobele Yawe moto akelaki likolo.
I Ch LinVB 16:27  O boso bwa ye lokumu na nkembo bimononi, o mboka ya ye se bokasi na esengo.
I Ch LinVB 16:28  Bino, mabota ma bikolo binso, bo­kumisa Yawe, bokumisa nkembo mpe bokasi bwa ye.
I Ch LinVB 16:29  Bokembisa nkombo ya Yawe, boya na mabonza, boyingela o boso bwa ye. Bokumbamela Yawe o mboka esantu ya ye.
I Ch LinVB 16:30  Nse mobimba, lenge o miso ma ye ; apiki mokili makasi, moningani te.
I Ch LinVB 16:31  E likolo sepela, e mokili yoka nsai ; boyebisa bikolo binso : Yawe azali Mokonzi.
I Ch LinVB 16:32  Mbu na binso bizali o kati, boganga makasi, Bilanga binso na mbuma ya yango, bosepela !
I Ch LinVB 16:33  Nzete inso ya zamba, bokumisa Yawe na esengo, zambi akoya koyangela mokili.
I Ch LinVB 16:34  Botondo Yawe, zambi aleki bolamu, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
I Ch LinVB 16:35  Boloba na ye : Salisa biso, e Nza­mbe wa libiki, sangisa biso mpe longola biso o kati ya bapagano, tokoka kokumisa nkombo ya yo esantu, tosakola mpe nkembo ya yo.
I Ch LinVB 16:36  Bakumisa Yawe Nzambe wa Israel o bileko na bileko binso seko ! Mpe bato banso baloba « Amen ! Aleluya ! (Bokumisa Yawe !) »
I Ch LinVB 16:37  Davidi atiki Asaf na bandeko ba ye liboso lya Sanduku ya Bondeko bwa Yawe mpo ’te basala ntango inso mosala o boso bwa Sanduku lokola milulu mya mokolo na mokolo mikotinda.
I Ch LinVB 16:38  Atiki wana mpe Obed-Edom na bandeko ba ye ntuku motoba na mwambe ; Obed-Edom, mwana wa Yedutun na Kosa bazalaki bake­ngeli ba monoko mwa ema.
I Ch LinVB 16:39  Atiki nganga Nzambe Sadok na bandeko ba ye, banganga Nzambe, o boso bwa Ndako ya Yawe, o ngomba ya Gabaon,
I Ch LinVB 16:40  mpo ’te babonzela Yawe ntango inso mabonza ma kotumba o altare ya mabonza, ntongo na mpokwa ; basala bongo manso lokola makomami o buku ya Mobeko moye Yawe apesaki ba-Israel.
I Ch LinVB 16:41  Ezalaki mpe na bango Eman, Yedutun na bato basusu banso ; baponoki bango mpo ya kokumisa Yawe, « zambi bolingi bwa ye, bolingi bwa seko. »
I Ch LinVB 16:42  Eman na Yedutun bazalaki na mi­ndule, na migbala mpe na biyembeli bisusu mpo ya kokamba nzembo ya bokumisi Nzambe. Bana ba Yedutun bazalaki bakengeli ba monoko mwa ema.
I Ch LinVB 16:43  Bato banso bazongi, moto na mo­to o ema ya ye. Davidi mpe azo­ngi mpo ’te abenisa libota lya ye.
Chapter 17
I Ch LinVB 17:1  Awa Davidi akomi kofanda o ndako ya ye moko, alobi na profeta Natan : « Tala, ngai nafandi o ndako enene ya mabaya ma sédere, mpe Sanduku ya Bondeko ezali bobele o biema ! »
I Ch LinVB 17:2  Natan azongiseli Davidi : « Sala manso olingi kosala, za­mbi Nzambe azali na yo. »
I Ch LinVB 17:3  Kasi o bu­tu bonamei Yawe alobi na Natan boye :
I Ch LinVB 17:4  « Kende koyebisa mosaleli wa ngai Davidi : Yawe alobi : Yo moto okotongela ngai ndako te mpo ’te nafanda.
I Ch LinVB 17:5  Solo, ut’o mokolo nalongolaki ba-Israel o Ezipeti tee lelo, nafa­ndaki o ndako te, nazalaki kolekaleka o nganda, lelo awa, lobi kuna, o biema.
I Ch LinVB 17:6  Mikolo minso nazalaki kota­mbo­la na ba-Israel nzela yoko. Na­po­noki bakengeli ba ekolo ya ngai Isra­el ; nalobaki ata na moko wa ba­ngo : Mpo nini otongeli ngai ndako ya mabaya ma sédere te ?
I Ch LinVB 17:7  Loba na mosaleli wa ngai Davidi : Yawe wa bokasi bonso alobi : Ngai moto nakamataki yo o esobe ntango ozalaki koleisa mpata mpo ’te ozala mokonzi wa bato ba ngai ba Israel.
I Ch LinVB 17:8  Nazalaki na yo bipai binso okendeki, nasilisi banguna ba yo banso o miso ma yo. Nakopesa yo nkombo ya lokumu, lokola nkombo ya bankumu banene ba mokili.
I Ch LinVB 17:9  Nakopesa bato ba ngai ba Israel esika, nakopika bango wana mpo ’te bafanda seko. Bakotelengana lisusu te, mpe bato babe bakonyokolo bango lisusu te lokola liboso,
I Ch LinVB 17:10  ut’o ntango bazuzi bazalaki koyangela bato ba ngai ba Israel. Nakosala ’te banguna ba yo banso batosa yo. Nayebisi yo ’te Yawe akopesa yo libota.
I Ch LinVB 17:11  Mpe soko mikolo mya yo mikoki mpo okende kolala o mboka ya bankoko ba yo, ngai nakobatela libota lya yo ; nakopesa moko wa bana ba yo bokonzi ;
I Ch LinVB 17:12  ye moto akotongela ngai ndako, mpe nakolendisa boko-nzi bwa ye seko.
I Ch LinVB 17:13  Ngai nakozala tata wa ye, mpe ye akozala mwana wa ngai. Nakotika kolinga ye te, lokola natikaki oyo azalaki liboso lya yo.
I Ch LinVB 17:14  Nakotia ye seko mokonzi wa libota mpe wa bokonzi bwa ngai ; ngwe­nde ya ye ekoumela o bileko binso. »
I Ch LinVB 17:16  Mokonzi Davidi akoti o ndako mpe afandi o boso bwa Yawe, alobi : « E Yawe Nzambe, ngai nde nani mpe libota lya ngai nde nini mpo ’te okomisa ngai o esika eye ?
I Ch LinVB 17:17  E Nzambe, otali likambo lina lokola likambo lik­e, mpe bilako olakeli libota lya mosaleli wa yo okokokisa byango nsima. Otali ngai lokola moto wa lokumu lonene, e Yawe Nzambe wa ngai.
I Ch LinVB 17:18  Ngai Davidi naloba lisusu nini, awa opesi ngai lokumu lonene boye ? Yo moko oyebi ngai mosaleli wa yo.
I Ch LinVB 17:19  E Yawe, na bolingi bwa yo moko osali makambo maye manso mpo ya mosaleli wa yo, mpo ’te bato bayeba misala minene mya yo.
I Ch LinVB 17:20  E Yawe, moto moko akokani na yo te, bobele yo ozali Nzambe, mosusu azali te ; toyoki mpe bongo na matoi ma biso.
I Ch LinVB 17:21  Ekolo esusu ekoki nde na ekolo Israel, ekolo ya yo, eye yo Nzambe o okendeki kosikola mpo ’te ekoma ekolo ya yo ? Omipesi nkombo ya lokumu na bosali ma­mbi manene mpe ma nsomo, awa obengani bato ba bikolo biike o miso ma bato ba ekolo ya yo, baye osikoli o mokili mwa Ezipeti.
I Ch LinVB 17:22  Okomisi Israel ekolo ya bato ba yo seko, mpe yo Yawe okomi Nza­mbe wa bango.
I Ch LinVB 17:23  Sikawa e Yawe, kokisa elako olakelaki mosaleli wa yo na libota lya ye mobimba. Sala lokola olobaki !
I Ch LinVB 17:24  Esalema solo, bongo bato banso bakumisa nkombo ya yo seko, baloba : « Yawe wa bokasi bonso azali Nzambe wa Israel, azali Nza­mbe wa ba-Israel », libota lya ngai Davidi, mosaleli wa yo, likozala seko o miso ma yo,
I Ch LinVB 17:25  zambi yo moko Nza­mbe wa ngai, oyebisi mosaleli wa yo ’te okopesa ye libota linene. Ya­ngo wana mosaleli wa yo azwi mpiko ya kobondela yo.
I Ch LinVB 17:26  Solo, e Yawe, yo moto ozali Nzambe mpe olakelaki mosaleli wa yo elako eye ya esengo.
I Ch LinVB 17:27  Ondima kobenisa libota lya mosaleli wa yo mpo ’te liumela seko o miso ma yo, zambi eye yo, Yawe, opa­mboli, epambolami seko. »
Chapter 18
I Ch LinVB 18:1  Na nsima Davidi akei kobunda na ba-Filisti mpe alongi bango. Abotoli Gat na mboka ya penepene o maboko ma ba-Filisti.
I Ch LinVB 18:2  Alongi mpe Moab ; ba-Moab bakomi mpe kofuta ye mpako seko.
I Ch LinVB 18:3  Davidi alongi Adadezer, mokonzi wa Soba, epai ya Amat, ntango alingi kozwa bokonzi epai ya ebale Efrate.
I Ch LinVB 18:4  Davidi abotoli bango makalo nkoto yoko, akangi basoda ba farasa nkoto nsambo mpe basoda ba makolo nkoto ntuku ibale. Davidi akati mikulu mya makalo manso, atikali se na makalo monkama.
I Ch LinVB 18:5  Ba-Aram ba Damasko bayei kosalisa Adadezer, mokonzi wa Soba, kasi Davidi abomi basoda ba Aram nkoto ntuku ibale na ibale.
I Ch LinVB 18:6  Na nsima Davidi aluboli bayangeli o Damasko, mokili mwa Aram. Bongo ba-Aram bakomi kofuta ye mpako. Yawe apesi Davidi lilonga bipai binso azalaki kokende.
I Ch LinVB 18:7  Davidi akamati nguba ya wolo ya basoda ba Adadezer mpe amemi ya­ngo o Yeruzalem.
I Ch LinVB 18:8  O Tibkat mpe o Kun, mboka ya Adadezer, Davidi abotoli mpe mbengi ebele ; Salomo asali na yango Ebombelo ya mai, makonzi ma ndako mpe bisaleli bisusu bya mbengi.
I Ch LinVB 18:9  Towu, mokonzi wa Amat, ayoki ’te Davidi alongi basoda banso ba Adadezer, mokonzi wa Soba.
I Ch LinVB 18:10  Ati­ndi mwana wa ye Adoram epai ya mokonzi Davidi, apesa ye losako, apesa ye mpe longonya zambi abu­ndaki na Adadezer mpe alongaki ye, mpo Adadezer na Towu bazalaki ba­nguna ; ayeli ye mpe biloko ndenge na ndenge bya wolo, palata na mbe­ngi.
I Ch LinVB 18:11  Mokonzi Davidi abonzeli Yawe biloko bina binso, abakisi mpe biloko bya palata mpe bya wolo, biye abotoloki o mokili mwa Edom, Moab, Amon mpe epai ya ba-Filisti na ba-Amalek.
I Ch LinVB 18:12  Abisai, mwana wa Seruya, alongi ba-Edom mpe abomi basoda nkoto zomi na mwambe o lobwaku la Mo­ngwa.
I Ch LinVB 18:13  Davidi atii bayangeli o Edom, mpe ba-Edom banso bakomi kofuta ye mpako. Yawe apesi Davidi lilonga bipai binso azalaki kokende.
I Ch LinVB 18:14  Davidi akomi mokonzi wa Israel mobimba. Azalaki kosambisa bato banso se na bosembo.
I Ch LinVB 18:15  Yoab, mwana wa Seruya, azalaki komanda wa basoda ; Yozafat, mwana wa Akilud, azalaki molaki wa mokonzi ;
I Ch LinVB 18:16  Sadok, mwana wa Akitub, na Akimelek, mwana wa Ebiatar, bazalaki banganga Nzambe ; Savsa azalaki mokomi minkanda ;
I Ch LinVB 18:17  Benaya, mwana wa Yoyada, azalaki komanda wa basoda ba Keret mpe ba Pelet. Bana ba Davidi bazalaki basaleli ba ya­mbo ba mokonzi.
Chapter 19
I Ch LinVB 19:1  Na nsima, Nakas, mokonzi wa ba-Amon, awei ; mpe mwana wa ye akitani ye.
I Ch LinVB 19:2  Davidi amilobeli : « Nakosala Kanun, mwana wa Nakas, malamu, zambi tata wa ye asalaki ngai mpe malamu. » Davidi ati­ndeli ye bantoma babondo ye mpo ya liwa lya tata wa ye. Basaleli ba Davidi bakomi o mokili mwa ba-Amon mpo ’te babondo Kanun.
I Ch LinVB 19:3  Kasi ba­nkumu ba Amon balobi na Kanun : « Okanisi solo ’te Davidi alingi kokumisa tata wa yo, awa atindeli yo bato mpo babondo yo ? Mbele basaleli ba ye bakomi epai ya yo mpo ’te bano-ngo mokili, babebisa mboka ? »
I Ch LinVB 19:4  Kanun akangisi basaleli ba Davidi, akati bango mandefu, akati mpe ndambo ya elamba tee o masoko, na nsima atiki bango bakende.
I Ch LinVB 19:5  Bayebisi Davidi likambo lina. Bongo atindi moto moko akende kokutana na bango, zambi bayoki nsoni mingi. Mokonzi alobi na bango : « Botikala o Yeriko tee ma­ndefu makoli. Bobele nsima bozonga awa. »
I Ch LinVB 19:6  Ba-Amon bamoni ’te basalaki mabe o miso ma Davidi. Kanun na ba-Amon batindi talenta ya palata nkoto yoko mpo ya kofutela basoda ba Aram epai ya ebale Efrate, na ba-Aram ba Maaka mpe ba Soba, na makalo na mpe basoda ba farasa.
I Ch LinVB 19:7  Bakamati makalo nkoto ntuku isato na ibale ; mokonzi wa Maaka na bato ba ye bayei kopika nganda penepene na Medeba. Ba-Amon basangani, babimi o mboka ya bango mpe bayei kobunda etumba.
I Ch LinVB 19:8  Davidi ayoki lika­mbo lina, mpe atindi Yoab na basoda bilombe ba ye banso.
I Ch LinVB 19:9  Ba-Amon babimi o mboka mpe batandi milongo mya bango penepene na ezibeli ya mboka, kasi bakonzi bayaki kosalisa bango, batikali o esobe.
I Ch LinVB 19:10  Yoab amoni ’te banguna bazalaki komilengele mpo ya etumba, epai ya liboso mpe o nsima ya ye. Aponi basoda ba mpiko ba Israel mpe atii bango liboso lya ba-Aram.
I Ch LinVB 19:11  Atikeli ndeko wa ye Abisai basoda basusu, atii bango o boso bwa ba-Amon.
I Ch LinVB 19:12  Alobi : « Soko ba-Aram baleki biso na bokasi, okoya kosalisa ngai ; soko ba-Amon baleki yo na bokasi, ngai nakoya kosalisa yo.
I Ch LinVB 19:13  Zala na mpiko, tomilakisa babali mpo tobikisa ekolo ya biso mpe mboka ya Nzambe wa biso. Yawe asa­la lokola alingi. »
I Ch LinVB 19:14  Yoab na basoda ba ye bakei kobunda na ba-Aram, mpe bango bakimi ye.
I Ch LinVB 19:15  Emoni ba-Amon ’te ba-Aram bakimi, bango mpe bakimi Abisai, ndeko wa Yoab, mpe bazongi o mboka ya bango. Yoab azongi o Yeruzalem.
I Ch LinVB 19:16  Emoni ba-Aram ’te ba-Israel balongi bango, batindi bantoma bake­nde kobenga ba-Aram bafandi o nga­mbo ya Ebale ; Sofak azalaki komanda wa basoda ba Adadezer.
I Ch LinVB 19:17  Bayebisi Davidi mpo yango ; asangisi ba-Israel banso, akatisi Yordane, akomi penepene na bango mpe atandi milongo mya basoda mpo ya kobunda. Davidi amilengeli mpo ya etumba, mpe ba-Aram bayei kobunda na ye.
I Ch LinVB 19:18  Ba-Aram bakimi basoda ba Israel mpe Davidi abomi farasa ya Aram nkoto nsambo mpe basoda ba makolo nkoto ntuku inei. Abomi mpe Sofak, komanda wa basoda ba Aram.
I Ch LinVB 19:19  Emoni baye bayei kosalisa Adadezer ’te ba-Israel balongi bango, bakati bondeko na Davidi mpe bakomi kotosa ye. Ba-Aram balingi lisusu kosalisa ba-Amon te.
Chapter 20
I Ch LinVB 20:1  Pene na nsuka ya mobu, o eleko bakonzi bakokendeke kobunda, Yoab akei na basoda ba ye mpe abebisi mokili mwa ba-Amon. Na nsima akei kozinga Raba ; kasi Davidi atikali o Yeruzalem. Yoab abo­toli Raba mpe abomi engumba.
I Ch LinVB 20:2  Davidi alongoli enkoti ya bokonzi o motó mwa Milkom ; ezalaki na bozito bwa talenta ya wolo yoko ; bake­mbisaki ya­ngo na libanga lya motuya. Davidi atii yango o motó. Abotoli mpe biloko ebele o mboka.
I Ch LinVB 20:3  Abimisi bato ba mboka mpe atindi bango misala mya mosumane, pikasi na soka. Davidi asali bobele bongo o mboka inso ya ba-Amon, na nsima azongi o Yeruzalem elongo na basoda ba ye banso.
I Ch LinVB 20:4  Na nsima babundi mpe na ba-Filisti epai ya Gezer. O etumba ena Sibekai wa mboka Kusat, abomi mo-Refaim Sipai. Ba-Filisti bakomi baombo ba bango.
I Ch LinVB 20:5  Babundi naino etumba esusu na ba-Filisti. Elkanan, mwana wa Yair, abomi Lami, ndeko wa Goliat wa mboka Gat na likongo linene ; esi­mbeli ezalaki lokola etongeli ya batongi bilamba.
I Ch LinVB 20:6  Babundi lisusu etu­mba o Gat. Elombe moko azalaki kuna, azalaki na misapi ntuku ibale na minei ; loboko na lokolo loko loko lozalaki na misapi motoba. Azalaki moto wa libota lya Rafa.
I Ch LinVB 20:7  Atumoli ba-Israel, mpe Yonatan mwana wa Simea, ndeko wa Davidi, abomi ye.
I Ch LinVB 20:8  Bango banso bazalaki bankoko ba Rafa wa Gat ; banso bakufi na maboko ma Davidi mpe ma basoda ba ye.
Chapter 21
I Ch LinVB 21:1  Satana aluki kosala ba-Israel mabe ; yango wana apesi Davidi mayele mabe ma kotanga mota­ngo mwa ba-Israel.
I Ch LinVB 21:2  Davidi alobi na Yoab mpe na bankumu ba bato : « Bokende kotanga ba-Israel banso banda Berseba tee Dan ; awa bosilisi, boyebisa ngai motango mwa bango. »
I Ch LinVB 21:3  Yoab ayanoli : « Yawe akolisa naino ekolo ya ye mbala nkama ! E mokonzi wa ngai, bango banso bazali basaleli ba yo. Mpo nini mokonzi alingi koyeba motango mwa bato ? Mpo nini Israel ameme ngambo boye ? »
I Ch LinVB 21:4  Nzokande Yoab akoki koboya etinda ya mokonzi te, akatisi ekolo mobimba ya Israel ; na nsima azongi o Yeruzalem.
I Ch LinVB 21:5  Yoab ayebisi Davidi motango mwa bato : o Israel bato bakoki kobunda etumba na mopanga bazalaki mo-nkoko na nkoto monkama, mpe o Yuda bato bazalaki nkoto nkama inei na ntuku nsambo.
I Ch LinVB 21:6  Etinda ya moko­nzi esepelisaki Yoab soki te, bongo atangi ba-Levi na ba-Benyamin te.
I Ch LinVB 21:7  Nzambe mpe asepeli na yango te, yango wana akani kopesa Israel etu­mbu.
I Ch LinVB 21:8  Na nsima Davidi alobi na Nza­mbe : « Nasali lisumu linene. Sikawa limbisa ngai, mosaleli wa yo, zambi nasali lokola elema. »
I Ch LinVB 21:9  Yawe alobi na Gad, momoni-makambo wa Davidi, maloba maye :
I Ch LinVB 21:10  « Kende koyebisa Davidi : Yawe alobi : Nakolakisa yo mpo isato ; yo moko opono mpo yoko mpe nakokokisa eye oponi. »
I Ch LinVB 21:11  Gad akei epai ya Davidi mpe alobi na ye : « Yawe alobi boye : Yo moko pono :
I Ch LinVB 21:12  to mibu misato mya nzala enene, to sanza isato esika banguna bakoya konyokolo mpe koboma yo na mopanga, to mikolo misato esika Yawe akoya kobete yo na botindi bokono bobe o ekolo, esika anzelu mobebisi wa Yawe akoya koboma bato o ekolo mobimba ya Israel. Sikawa kanisa malamu mpe yebisa ngai eyano nini nazongisela Oyo atindi ngai. »
I Ch LinVB 21:13  Davidi azongiseli Gad : « Nazali koyoka motema nsomo ; malamu namibwaka o maboko ma Yawe, zambi ye aleki motema ngolu, nakweya o maboko ma bato te ! »
I Ch LinVB 21:14  Bongo Yawe atindi bokono bobe o Israel : bato nkoto ntuku nsambo bakufi o Israel.
I Ch LinVB 21:15  Nzambe atindi anze­lu abebisa Yeruzalem ; ezalaki ye kobebisa bongo, Yawe atali mpe ayokeli bango mawa. Alobi na anzelu mobebisi : « Ekoki, tika kosala mabe. » Anzelu wa Yawe atelemi penepene na etutelo ya Ornan, moto wa Yebus.
I Ch LinVB 21:16  Davidi atomboli miso mpe amoni anzelu wa Yawe kati ya likolo na nse, amemi mopanga o loboko, na yango akaneli Yeruzalem. Davidi na bakolo ba mboka balati ngoto, bakwei bilo­ngi o nse.
I Ch LinVB 21:17  Davidi alobi na Nzambe : « Ngai moto natindaki ’te bata­nga bato, ngai moto nasali lisumu mpe nabebisi, kasi mpata iye isali nini ? E Yawe Nzambe wa ngai, ebongi opesa ngai mpe libota lya ngai etumbu ; kasi opesa ekolo ya yo etumbu te. »
I Ch LinVB 21:18  Anzelu wa Yawe alobi na Gad : « Yebisa Davidi akende kotongela Yawe altare o etutelo ya Ornan, moto wa Yebus. »
I Ch LinVB 21:19  Davidi akei lokola Gad alobaki o nkombo ya Yawe.
I Ch LinVB 21:20  Ornan azalaki kotuta mbuma ya mampa, atali nsima mpe amoni anzelu ; akei noki kobombama, ye na bana ba ye banei.
I Ch LinVB 21:21  Davidi akei epai ya Ornan ; Ornan atali mpe amoni Davidi ; na nsima alongwi o etutelo mpe agu-mbami liboso lya Davidi, elongi o nse.
I Ch LinVB 21:22  Davidi alobi na Ornan : « Tikela ngai etutelo, kuna natongela Yawe altare ; nakosomba yango ; bobele bo­ngo bokono bokosila epai ya bato. »
I Ch LinVB 21:23  Ornan ayanoli Davidi : « Kamata yango mpe sala na yango lokola oli­ngi. Ngombe iye ozali komono, nakopesa yo yango bo mabonza ma kotumba, kamata makalo bo nkoni, mpe mbuma ya mampa bo libonza lya bolei ; nakopesa yo bina binso. »
I Ch LinVB 21:24  Kasi mokonzi Davidi alobi na Ornan : « Bongo te, nalingi kosomba ya­ngo. Nakokamata biloko bya yo te mpo ’te nabonzela Yawe libonza, soko nafuti yango te na motuya mobongi. »
I Ch LinVB 21:25  Davidi asombi esika ena mpe afuti Ornan mitako mya wolo nkama motoba.
I Ch LinVB 21:26  Davidi atongeli Yawe altare, mpe abonzeli ye mabonza ma kotumba na miboma mya bondeko. Abondeli Yawe ; Yawe apesi ye eya­no mpe ut’o likolo atindi móto o altare ya mabonza.
I Ch LinVB 21:27  Na nsima Yawe alobi na anzelu ’te azongisa mopanga o libenga.
I Ch LinVB 21:28  O mikolo mina emoni Davidi ’te Yawe apesaki ye eyano o etutelo ya Ornan, moto wa Yebus, abonzeli ye miboma.
I Ch LinVB 21:29  Nzokande o eleko ena ndako ya Yawe, eye Moze atongaki o eliki, na altare ya mabo­nza ma kotumba izalaki o ngomba ya Gabaon,
I Ch LinVB 21:30  kasi Davidi abangaki kokende kokumisa Nzambe kuna, za­mbi mopanga mwa anzelu wa Yawe mobangisaki ye.
Chapter 22
I Ch LinVB 22:1  Na nsima Davidi alobi : « Ndako ya Yawe Nzambe eza­li awa ; ekozala mpe altare ya miboma mya bato ba Israel. »
I Ch LinVB 22:2  Davidi atindi ’te basangisa bampaya baye bafandi o mokili mwa Israel ; akamati bango o mosala mwa kokata mabanga manene mpo ya kotonga Ndako ya Nzambe.
I Ch LinVB 22:3  Asombi mpe bibende ebele mpo ya kosala nsete ya kokanga bizibeli bya ndako, mpe mpo ya kosala bikangeli ; aluki mpe mbengi ebele, bakoki komeka bozito bwa yango te.
I Ch LinVB 22:4  Aluki mpe mabaya ma sédere mingi mpenza, zambi bato ba Sidoni mpe ba Tiro bapesaki Davidi mabaya ma sédere ebele.
I Ch LinVB 22:5  Na nsima Davidi alobi : « Mwana wa ngai Salomo azali se mwana, akomi naino makasi te. Ebongi Ndako eye basengeli kotongela Yawe, ezala enene mpe kitoko mpo ezwa lokumu o miso ma bato ba bikolo binso. Ngai nakolengelela ye misala minso. » Mpe bongo Davidi, liboso ’te akufa ale-ngeli biloko biike.
I Ch LinVB 22:6  Abengi mwana wa ye Salomo, mpe atindi ye ’te ato­nga Ndako mpo ya kokumisa Yawe Nzambe wa Israel.
I Ch LinVB 22:7  Davidi alobi na Salomo : « Mwana wa ngai, ngai moko nalingaki kotongela Nkombo ya Yawe Nzambe wa ngai Ndako.
I Ch LinVB 22:8  Kasi Yawe alobaki na ngai : ‘Obomaki bato baike mpe obundaki bitumba binene. Yo moto okotongela Nkombo ya ngai Ndako te, mpo osopaki makila mingi o miso ma ngai.
I Ch LinVB 22:9  Tala, oboti mwana mobali, akozala moto wa boboto ; nakofandisa ye na boboto o kati ya banguna bafandi penepene ; ba­kopesa ye nkombo Salomo ; mikolo minso ye akozala mokonzi nakopesa Israel boboto mpe bopemi.
I Ch LinVB 22:10  Ye moto akotongela Nkombo ya ngai Ndako. Ye akozala mwana wa ngai, mpe ngai nakozala tata wa ye. Nakolendisa bokonzi bwa ye o Israel seko’.
I Ch LinVB 22:11  Sikawa, mwana wa ngai, Yawe azala na yo mpo ’te osilisa malamu mosala mwa kotonga ndako ya Yawe Nzambe wa yo, se lokola alobaki mpo ya yo.
I Ch LinVB 22:12  Yawe akabela yo mayele na bwanya o mokolo akolubola yo mokonzi wa Israel mpo ’te okoka komemya Mobeko mwa Yawe Nzambe wa yo.
I Ch LinVB 22:13  Soko otosi mpe okokisi mibeko mpe bitinda binso biye Yawe atindaki Moze mpo ya ba-Israel, makambo ma yo manso makotambola malamu. Zala makasi mpe na molende ! Obanga te, olenge mpe te.
I Ch LinVB 22:14  Ngai moto mobola, nabombi mpo ya ndako ya Yawe talenta ya wolo nkoto monkama, na talenta ya palata efuku yoko. Bibende na mbe­ngi bileki mingi, bakoki komeka bozito bwa yango te. Naluki mabaya na mabanga, mpe yo okoluka naino masusu.
I Ch LinVB 22:15  Okozala na basali baike, bato bayebi kokata mabanga na baye bayebi kopasola mabaya : basali ebele bayebi kosala misala ndenge na nde­nge.
I Ch LinVB 22:16  Motango mwa wolo, palata, mbe­ngi na bibende, mokoki kotangema te. Sikawa teleme, banda mosala mwa yo, mpe Yawe azala na yo ! »
I Ch LinVB 22:17  Davidi atindi bankumu banso ba Israel ’te basalisa mwana wa ye Salomo, alobi :
I Ch LinVB 22:18  « Yawe, Nzambe wa bino azala na bino. Akomisi ekolo ya bino nye bipai binso. Akabi bato ba mokili o maboko ma ngai, bakosalelaka Yawe na mpe ekolo ya ye.
I Ch LinVB 22:19  Sikawa boluka Yawe Nzambe wa bino na mo­tema moko mpe na mayele ma­nso. Bokende kotonga esika esantu ya Yawe Nzambe mpo ’te tokoka kokotisa Sanduku ya Bondeko bwa Yawe mpe mbeki isantu o ndako eye tokotongela nkombo ya Yawe. »
Chapter 23
I Ch LinVB 23:1  Davidi akomi mobange mpe akokisi mikolo mingi o nta­ngo apesi mwana wa ye Salomo bokonzi bwa Israel.
I Ch LinVB 23:2  Abengi bankumu ba Israel banso, na banganga Nza­mbe na ba-Levi.
I Ch LinVB 23:3  Batangi ba-Levi, baye bakokisi mibu ntuku isato. Bakoki bato nkoto ntuku isato na mwambe.
I Ch LinVB 23:4  O kati ya bango, bato nkoto ntuku ibale na inei bakambi bisambo o ndako ya Yawe ; bato nkoto motoba bazalaki bakomi na bazuzi,
I Ch LinVB 23:5  bato nkoto inei bakengeli ba bizibeli mpe bato nkoto inei bazalaki mpo ya kokumisa Yawe na biyembeli Davidi asalaki na ntina ena.
I Ch LinVB 23:6  Davidi akaboli bango o mango-mba, alandi bongo mabota ma bana ba Levi : Gerson, Keat na Merari.
I Ch LinVB 23:8  na bana basato ba Ladan : Yekiel, motomolo, Zetam na Yoel.
I Ch LinVB 23:9  Bana basato ba Simei : Selomit, Kaziel na Aran. Bango bankumu ba libota lya Ladan.
I Ch LinVB 23:10  Na bana banei ba Simei : Yakat, Zina, Yeus na Beria, bango bana banei ba Simei.
I Ch LinVB 23:11  Yakat azalaki motomolo, wa babale Zina ; na nsima bana ba Yeus na Beria, basangisi bango o libota lyoko mpo babotamaki mingi te.
I Ch LinVB 23:12  Keat azalaki na bana banei : Amram, Yisar, Ebron na Uziel.
I Ch LinVB 23:13  Amram aboti Arone na Moze. Baponi Arone mpo ya kosantisa biloko bileki bisa-ntu ; ye na bana ba ye basengeli kotumba mpaka ya malasi o boso bwa Yawe, kosalela ye mpe kobenisa bato o nkombo ya ye seko.
I Ch LinVB 23:14  Moze azalaki moto wa Nzambe, bana ba ye batangemi o libota lya ba-Levi.
I Ch LinVB 23:17  Eliezer aboti Rekabia, mwana wa yambo ; Eliezer aboti bana babali basusu te, kasi bana ba Rekabia bazalaki baike.
I Ch LinVB 23:19  Ebron aboti Yeria, mwana wa yambo, Amaria, mwana wa babale, Yakaziel, mwana wa basato na Yekamam, mwana wa banei.
I Ch LinVB 23:20  Uziel aboti liboso Mika, na Yisia, mozimi wa ye.
I Ch LinVB 23:21  Merari aboti Mali na Musi. Mali aboti Eleazar na Kis.
I Ch LinVB 23:22  Eleazar akufi, aboti bana babali te, se bana basi ; bandeko ba bango, bana ba Kis babali bango.
I Ch LinVB 23:23  Musi aboti bana basato : Mali, Eder na Yeremot.
I Ch LinVB 23:24  Bango banso bazalaki bana ba libota lya Levi, etuka na etuka ; bazalaki bankumu ba mabota, batangi ba­ngo moko moko. Baye banso bakokisi mibu ntuku ibale basengeli kosala mosala o ndako ya Yawe.
I Ch LinVB 23:25  Solo, Davidi alobaki : « Yawe Nza­mbe wa Israel akomisi ekolo ya ye nye, mpe akofanda o Yeruzalem seko.
I Ch LinVB 23:26  Ba-Levi basengeli lisusu komeme Ema na biloko bya yango te. »
I Ch LinVB 23:27  Yango wana, engebene na maloba ma nsuka ma Davidi, batangi bana ba Levi, banda baye bakokisi mibu ntuku ibale.
I Ch LinVB 23:28  Bango basengeli kotosa biti­nda bya bana ba Arone mpo ya misala o Tempelo ya Yawe : batala lopango, biteni binene bya ndako, bapetola biloko bisantu binso, basala mpe misala misusu o Tempelo ya Nza­mbe.
I Ch LinVB 23:29  Batala mampa ma libo­nza, fufu mpo ya libonza, minkate mizangi nkisi, minkate bakalingi o lisasu, minkate milambami na biloko bisusu ; batala mpe kopo mpo ya komeka bozito bwa biloko.
I Ch LinVB 23:30  Bateleme ntongo na mpokwa inso mpo ya kokumisa mpe koyembela Yawe,
I Ch LinVB 23:31  mpo ya kobonzela Yawe mabonza ma kotumba o mikolo mya Sabato, mikolo mya sanza ya sika mpe o biyenga bisusu lokola mobeko motindi. Tala mosala mwa bango mwa seko o boso bwa Yawe.
I Ch LinVB 23:32  Bazalaki mpe na mosala mwa kotala Ema ya Likita, na biloko bisantu binso, basalisa mpe bandeko ba bango, bana ba Arone, baye bakosalaka mosala o Tempelo ya Yawe.
Chapter 24
I Ch LinVB 24:1  Bana ba Arone bakabwani mpe na mangomba. Arone aboti Nadab, Abiu, Eleazar na Itamar.
I Ch LinVB 24:2  Nadab na Abiu bakufi liboso lya tata wa bango, babotaki te. Bo­ngo bapesi Eleazar na Itamar mosala mwa bonganga.
I Ch LinVB 24:3  Davidi na Sadok, mwana wa libota lya Eleazar, na Akimelek, wa libota lya Itamar, bakaboli ba­nganga Nzambe o mangomba, engebene na mosala bazalaki kosala.
I Ch LinVB 24:4  Bana ba Eleazar baleki bana ba Itamar na boike. Bakaboli bango : bana ba Eleazar bazalaki na bankumu ba mabota zomi na motoba ; bana ba Itamar na bankumu ba mabota mwambe.
I Ch LinVB 24:5  Mpo ’te bakabola bango, babeti zeke, zambi o ntei ya bana ba Eleazar mpe ba Itamar basusu batalaki biloko bisa­ntu, basusu bazalaki kotala losambo.
I Ch LinVB 24:6  Mo-Levi moko, mokomi mi­nkanda, nkombo ’te Semaya, mwa­na wa Netaneel, akomi nkombo ya bango o miso ma mokonzi, ma ba­nkumu, ma nganga Nzambe Sadok, ma Akimelek, mwana wa Ebiatar, mpe o miso ma bankumu ba mabota ma banganga Nzambe mpe ma ba-Levi. Babeti zeke mbala ibale mpo ya kopono mabota mabale ma Eleazar, mpe mbala yoko mpo ya kopono libota lyoko lya Itamar.
I Ch LinVB 24:7  Babeti zeke : Yoyarib, moto abimi liboso ; wa babale Yedaya,
I Ch LinVB 24:12  wa zomi na moko Eliasib, wa zomi na babale Yakim,
I Ch LinVB 24:13  wa zomi na basato Kupa, wa zomi na banei Isbaal,
I Ch LinVB 24:14  wa zomi na batano Bilga, wa zomi na motoba Imer,
I Ch LinVB 24:15  wa zomi na nsa­mbo Kezir, wa zomi na mwambe Apises,
I Ch LinVB 24:16  wa zomi na libwa Petaya, wa ntuku ibale Yekeskel,
I Ch LinVB 24:17  wa ntuku ibale na moko Yakin, wa ntuku ibale na babale Gamul,
I Ch LinVB 24:18  wa ntuku ibale na basato Delaya, wa ntuku ibale na banei Mazia.
I Ch LinVB 24:19  Tala molongo mwa ngala ya ba­nganga Nzambe baponomi mpo ya mosala o Tempelo ya Yawe ; balandi se mobeko Arone, nkoko wa bango, atindaki bango lokola Yawe Nzambe wa Israel atindaki ye.
I Ch LinVB 24:20  Bana basusu ba Levi, bango baye : wa bana ba Amram, Subael. Wa bana ba Subael, Yekdeya.
I Ch LinVB 24:22  Wa bana ba Yisar, Selomot ; wa bana ba Selomot, Yakat.
I Ch LinVB 24:23  Wa bana ba Kebron : Yeria, moto wa yambo, Amaria moto wa babale, Yakaziel moto wa basato, Yekameam moto wa banei.
I Ch LinVB 24:24  Wa bana ba Uziel, Mika ; wa bana ba Mika, Samir.
I Ch LinVB 24:25  Ndeko wa Mika, Yisia ; wa bana ba Yisia : Zekaria.
I Ch LinVB 24:26  Bana ba Merari, bana ba Yazia : Mali na Musi,
I Ch LinVB 24:28  Wa bana ba Mali : Eleazar, oyo abotaki bana ba­bali te.
I Ch LinVB 24:30  Wa bana ba Musi : Mali, Eder na Yerimot. Bango banso bana ba Levi, batangi bango libota na libota.
I Ch LinVB 24:31  Se lokola bandeko ba bango, bana ba Arone, basalaki, babeti zeke o miso ma mokonzi Davidi, ma Sadok, ma Akimelek, ma bankumu ba mabota, ma ba­nganga Nzambe, ma ba-Levi, mpe ma bankumu ba mabota manene mpe ba mabota make.
Chapter 25
I Ch LinVB 25:1  Davidi na bakomanda ba basoda bapesi bana ba Asaf, bana ba Eman na bana ba Yedutun mosala mwa bango : basengeli koyembela Nzambe na nzenze, na lokombe mpe na migbala. Tala awa nkombo ya bayembi :
I Ch LinVB 25:2  Wa bana ba Asaf : Zakur, Yozefu, Netania na Asarela. Tata wa bango azalaki mokambi wa bango ; azalaki kosakola o nkombo ya mokonzi.
I Ch LinVB 25:3  Wa bana ba Yedutun : Gedalia, Seri, Yesaya, Kasabia na Matitia. Bazalaki motoba mpe tata wa bango Yedutun azalaki mokambi wa bango ; ba­zalaki koyembela nkembo na lokumu la Yawe na nzenze ya bango.
I Ch LinVB 25:4  Wa bana ba Eman : Bukia, Matania, Uziel, Sebuel, Yerimot, Kanania, Kanani, Eliata, Gidalti, Romamti-Ezer, Yosbekasa, Maloti, Otir na Makaziot.
I Ch LinVB 25:5  Bango banso bazalaki bana ba Eman, momoni-makambo wa mo­konzi ; Nzambe alakelaki ye ’te akotombola lokumu la ye, yango wana apesi Eman bana babali zomi na banei na bana basi basato.
I Ch LinVB 25:6  Bango ba­nso bazalaki koyembela Yawe, elo­ngo na batata ba bango, Asaf, Yedutun na Eman, na bobeti migbala, nzenze na lokombe o Tempelo ya Yawe, lokola mokonzi atindaki.
I Ch LinVB 25:7  Motango mwa bayembi na bandeko ba bango basusu bayebi koyemba malamu, mozalaki nkama ibale na ntuku mwambe na mwambe.
I Ch LinVB 25:8  Babeti zeke mpo ya koyeba molongo moye balanda, mpo ya bankumu na bato bake, mpo ya balakisi mpe mpo ya bayekoli.
I Ch LinVB 25:9  Moto wa ya­mbo zeke elakisi : mo-Asaf Yozefu. Wa babale : Gedalia na bana na ba­ndeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:10  Wa basato Zakur na bana na bandeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:11  Wa banei Yiseri na bana na bandeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:12  Wa batano Netania na bana na bandeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:13  Wa motoba : Bukia na bana na bandeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:14  Wa nsambo Yesarela na bana na bandeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:15  Wa mwambe Yesaya na bana na bandeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:16  Wa libwa Matania na bana na bandeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:17  Wa zomi Simei na bana na bandeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:18  Wa zomi na moko Azarel na bana na bandeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:19  Wa zomi na babale Kasabia na bana na bandeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:20  Wa zomi na basato Subael na bana na bandeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:21  Wa zomi na banei Matitia na bana na bandeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:22  Wa zomi na batano Yeremot na bana na bandeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:23  Wa zomi na motoba Anania na bana na bandeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:24  Wa zomi na nsambo Yosbekasa na bana na ba­ndeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:25  Wa zomi na mwambe Kanani na bana na bandeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:26  Wa zomi na libwa Maloti na bana na bandeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:27  Wa ntuku ibale Eliata na bana na bandeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:28  Wa ntuku ibale na moko Otir na bana na bandeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:29  Wa ntuku ibale na babale Gidalti na bana na bandeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:30  Wa ntuku ibale na basato Makaziot na bana na ba­ndeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
I Ch LinVB 25:31  Wa ntuku ibale na banei Romamti-Ezer na bana na bandeko ba ye : bazalaki zomi na babale.
Chapter 26
I Ch LinVB 26:1  Tala mangomba ma bakengeli ba bizibeli : Wa bana ba Kore : Meselemia, mwa­na wa Kore wa libota lya Asaf.
I Ch LinVB 26:2  Meselemia aboti bana : wa yambo Zekaria, wa babale Yediael, wa basato Zebadia, wa banei Yatniel,
I Ch LinVB 26:3  wa batano Elam, wa motoba Yokanan, wa nsambo Elyoenai.
I Ch LinVB 26:4  Obed-Edom aboti bana : wa ya­mbo Semaya, wa babale Yozabad, wa basato Yoak, wa banei Sakar, wa batano Netaneel,
I Ch LinVB 26:5  wa motoba Amiel, wa nsambo Izakar, wa mwambe Peletai ; Nzambe abenisaki libota lya ye.
I Ch LinVB 26:6  Mwana wa ye Semaya aboti mpe bana babali, bakomi bankumu ba mabota ma bango, zambi bazalaki bato ba mpiko.
I Ch LinVB 26:7  Semaya aboti Otni, Refael, Obed, Elzabad na bandeko ba ye, bato ba mpiko : Eliu na Semakia.
I Ch LinVB 26:8  Ba­ngo banso bazalaki bana ba Obed-Edom. Bango na bana na bandeko ba bango bazalaki bato ba mpiko bakoki na mosala mwa bangolokumu, za­mbi balakisaki mpiko o mosala. O libota lya Obed-Edom bazalaki bato ntuku motoba na babale.
I Ch LinVB 26:9  Meselemia azalaki na bana mpe na bandeko : bato ba mpiko zomi na mwambe.
I Ch LinVB 26:10  Kosa, mwana wa libota lya Merari, aboti bana babali : wa yambo Simri (ata azalaki mwana wa liboso te, tata atiaki ye liboso),
I Ch LinVB 26:11  wa babale Kilkia, wa basato Tebalia, wa banei Zekaria. Bana na bandeko ba Kosa bakoki zomi na basato.
I Ch LinVB 26:12  Bango bazalaki bato ba lingomba lya bakengeli ba bizibeli. Bakonzi ba bango bazalaki mpe na mosala o Tempelo ya Yawe, se lokola bandeko ba bango.
I Ch LinVB 26:13  O mabota manso, ezala libota like, ezala libota linene, babeti zeke mpo bayeba nani akokengele ezibeli yoko yoko.
I Ch LinVB 26:14  Epai ya Esti, zeke elakisi Selemia. Epai ya Nordi, zeke elakisi mwana wa ye Zekaria, molaki wa mayele mingi.
I Ch LinVB 26:15  Epai ya Sudi, zeke elakisi Obed-Edom mpe bana ba ye bakengele bibombelo bya biloko.
I Ch LinVB 26:16  Epai ya Westi, zeke elakisi Supim na Kosa mpo batala ezibeli epai ya Westi, na ezibeli ya Saleket penepene na nzela ya ngomba. Bakaboli mosala boye :
I Ch LinVB 26:17  Epai ya Esti, ba-Levi motoba bazala wana mokolo na mokolo, epai ya Nordi bato banei, epai ya Sudi bato banei ; bato babale babale batala bibombelo bya biloko.
I Ch LinVB 26:18  O ndako ike epai ya Westi, bazala bato banei mpo ya kotala nzela mpe bato babale mpo ya kotala ndako.
I Ch LinVB 26:19  Molongo mwa bakengeli ba bizibeli o kati ya bana ba Kore mpe ba Merari, mwango moye.
I Ch LinVB 26:20  Bandeko ba bango, ba-Levi, bazalaki kokengele bibombelo bya mosolo mwa Tempelo ya Nzambe, na mpe mabonza masantu.
I Ch LinVB 26:21  Bana ba Ladan, Yekiel wa libota lya Gerson ; bana ba Yekiel, bankumu ba mabota ma Ladan, ba etuka ya Gerson.
I Ch LinVB 26:22  Zetam na ndeko wa ye Yoe­l, bana ba Yekiel, batalaki mosolo mwa Tempelo ya Yawe.
I Ch LinVB 26:23  O kati ya bana ba Amram, ba Yisar, ba Ebron na ba Uziel :
I Ch LinVB 26:24  Sebuel mwana wa Gerson, nkoko wa Moze, azalaki mokonzi mokengeli wa nkita.
I Ch LinVB 26:25  Bandeko ba ye, bana ba ndeko wa ye Eliezer, bazalaki Rekabia, mwana wa ye, tata wa Yesaya, tata wa Yoram, tata wa Zikri, tata wa Selomit.
I Ch LinVB 26:26  Selomit na bandeko ba ye bazalaki kotala mosolo monso mwa mabonza masantu, maye mokonzi Davidi, na bankumu ba mabota, na bakomanda ba basoda nkoto to nkama na bako­nzi basusu ba basoda babonzelaki Nza­mbe.
I Ch LinVB 26:27  Babotoloki biloko bina o ntango ya etumba, mpe babonzelaki Nzambe byango mpo ya misala mya Tempelo ya Yawe.
I Ch LinVB 26:28  Na mpe biloko binso Samuel, momoni-makambo, na Saul mwana wa Kis, na Abner mwana wa Ner, na Yoab mwana wa Seruya babonzelaki Nzambe, bapesi bya­ngo na Selomit mpe na bandeko ba ye batala byango.
I Ch LinVB 26:29  O kati ya bana ba Yisar, bapesi Kenania na bandeko ba ye mosala mwa kotala makambo ma mokili mwa Israel, bazala bakomi na bazuzi.
I Ch LinVB 26:30  O kati ya bana ba Ebron, bakamati Kasabia na bandeko ba ye nkoto yoko na nkama nsambo, banso bato ba mpiko ; bapesi bango mosala mwa kokengele ngambo ya Westi ya Yordane o makambo manso matali Yawe na mpe mokonzi.
I Ch LinVB 26:31  Yeria azalaki mokonzi wa bato ba libota lya Ebron. O ntango Davidi akokisi mibu ntuku inei o bokonzi, baluki banani bazalaki bato ba libota lya Ebron, mpe bazwi bato ba mpiko o mboka Yazer ya Galaad.
I Ch LinVB 26:32  Yeria na bandeko ba ye bazalaki nkoto ibale na nkama nsambo, banso bato ba mpiko, bankumu ba mabota ; moko­nzi Davidi atiaki bango bakonzi ba libota lya Ruben, ba libota lya Gad mpe ba ndambo ya libota lya Manase, mpo batala bango o makambo ma­nso matali Nzambe na mpe mokonzi.
Chapter 27
I Ch LinVB 27:1  Motango mwa bana ba Israel, bankumu ba mabota, bakomanda ba basoda nkoto to mo­nkama, bakomi bazalaki kosalela mokonzi na bokambi mampinga ma basoda ; limpinga lyoko lyoko sanza yoko o mobu. Limpinga lyoko lyoko lizalaki na bato nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:2  Yasobeam, mwana wa Zabdiel, azalaki komanda wa limpinga lya ya­mbo o sanza ya yambo. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:3  Azalaki mwana wa libota lya Peres, mpe komanda wa bakonzi banso ba limpinga o sanza ya yambo.
I Ch LinVB 27:4  Dodai, moto wa Ako, azalaki komanda wa limpinga lya mabale o sanza ya ibale. Miklot azalaki koyangela limpinga lya ye. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:5  Benaya, mwana wa nganga Nzambe monene Yoyada, azalaki komanda wa limpinga lya ma­sato o sanza ya isato. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:6  Benaya oyo azalaki moto wa lokumu lonene o ntei ya bilombe ntuku isato, azalaki mokonzi wa bango. Mwana wa Amizabad azalaki mpe moko wa bato ba ye.
I Ch LinVB 27:7  Asael, ndeko wa Yoab, azalaki komanda wa limpinga lya manei o sa­nza ya inei, mpe mwana wa ye Zebadia akitani ye. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:8  Sameut, moto wa Yizra, azalaki komanda wa li­mpi­nga lya matano o sanza ya itano. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:9  Ira, mwana wa Ikes, moto wa Tekoa, azalaki komanda wa li­mpi­nga lya motoba o sanza ya motoba. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:10  Eles, mwana wa Pelon, wa libota lya Efraim, azalaki komanda wa li­mpinga lya nsambo o sanza ya nsa­mbo. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:11  Sibekai, moto wa Kusa, wa libota lya Zara azalaki komanda wa limpinga lya mwambe o sanza ya mwambe. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:12  Abiezer, moto wa Anatot, wa libota lya Benyamin, azalaki komanda wa li­mpi­nga lya libwa o sanza ya libwa. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:13  Makarai, moto wa Netofa, wa libota lya Zara, azalaki komanda wa limpinga lya zomi o sanza ya zomi. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:14  Benaya, moto wa Pireaton, wa libota lya Efraim, azalaki komanda wa limpinga lya zomi na lyoko o sa­nza ya zomi na yoko. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:15  Keldai, moto wa Netofa, wa libota lya Otniel, azalaki komanda wa li­mpinga lya zomi na mabale o sanza ya zomi na ibale. Bato ba ye bazalaki nkoto ntuku ibale na inei.
I Ch LinVB 27:16  O kati ya mabota ma Israel : Eliezer, mwana wa Zikri, azalaki koma­nda wa ba-Ruben ; Sefatia, mwana wa Maaka, komanda wa ba-Simeon.
I Ch LinVB 27:17  Wa ba-Levi : Kasabia, mwana wa Kemuel ; wa ba-Arone : Sadok ;
I Ch LinVB 27:18  wa ba-Yuda : Eliu, ndeko wa Davidi ; wa ba-Izakar : Omri, mwana wa Mikael ;
I Ch LinVB 27:19  wa ba-Zabulon : Yismaya, mwana wa Obadia ; wa ba-Neftali : Yerimot, mwana wa Azriel ;
I Ch LinVB 27:20  wa ba-Efraim : Osea, mwana wa Azazia ; wa ndambo ya etuka ya ba-Manase : Yoel, mwana wa Pedaya ;
I Ch LinVB 27:21  wa ndambo esusu ya etuka ya ba-Manase o mokili mwa Galaad : Yido, mwana wa Zekaria ; wa ba-Benyamin : Yaziel, mwana wa Abner ;
I Ch LinVB 27:22  wa ba-Dan : Azarel, mwana wa Yerokam. Bakomanda ba mabota ma Israel, bango baye.
I Ch LinVB 27:23  Baye bakokisi naino mibu ntuku ibale te, Davidi atangi bango te, mpo Yawe alobaki ’te akokomisa Israel ekolo ya bato baike, ebele lokola mi­nzoto mya likolo.
I Ch LinVB 27:24  Yoab, mwana wa Seruya, abandi kotanga bango, kasi asukisi mosala mona te, mpo Yawe asilikeli Israel, zambi batangaki bato ; bongo motango mwa bango mokomami te o buku ya Bikela bya mokonzi Davidi.
I Ch LinVB 27:25  Azmavet, mwana wa Adiel, azalaki kotala bibombelo bya biloko bya mokonzi. Yonatan, mwana wa Uzia, azalaki kotala makambo ma mosolo o bingumba, o mboka mpe o bibo­mbelo.
I Ch LinVB 27:26  Ezri, mwana wa Kelub, azalaki kotala bato bakosalaka mosala o bilanga.
I Ch LinVB 27:27  Simei, moto wa Rama, azalaki kotala bilanga bya nzete ya vino. Zabdi, moto wa Sefam, azalaki kotala bato bakokengeleke bibombelo bya vino.
I Ch LinVB 27:28  Baal-Kanan, moto wa Geder, aza­laki kotala nzete ya oliva mpe ya sikomore o esobe. Yoas azalaki kotala bibombelo bya mafuta.
I Ch LinVB 27:29  Sitrai, moto wa Saron, azalaki kotala ngo­mbe o esobe ya Saron. Safat, mwana wa Adlai, azalaki kotala ngombe o mabwaku.
I Ch LinVB 27:30  Obil, moto wa libota lya Ismael, azalaki kotala kamela. Yedeya wa Meramot, azalaki kotala mpunda.
I Ch LinVB 27:31  Yaziz, moto wa Agar, azalaki kotala mpata. Bango banso bazalaki bakengeli ba biloko bya mokonzi Davidi.
I Ch LinVB 27:32  Yonatan, noko wa Davidi, azalaki molaki wa ye ; azalaki moto wa mayele mpe mokomi minkanda ; azalaki kobokolo bana ba mokonzi, ye na Yekiel, mwana wa Kakmoni.
I Ch LinVB 27:33  Akitofel azalaki mpe molaki wa mokonzi ; Kusai, moto wa Arka, azalaki moni-nga wa ye wa motema.
I Ch LinVB 27:34  Yoyada, mwana wa Benaya, na Ebiatar bakitani Akitofel. Yoab azalaki komanda monene wa basoda ba mokonzi.
Chapter 28
I Ch LinVB 28:1  Davidi asangisi o Yeruzalem bakonzi banso ba Israel, na bankumu ba mabota, na bayangeli ba misala mya mokonzi, na bakomanda ba basoda nkoto to nkama, na baye bakokengeleke biloko na bibwele bya mokonzi, na baye bakobokoloko bana babali ba ye na ba-eniki, na bilombe banso, bato ba mpiko.
I Ch LinVB 28:2  Mokonzi Davidi atelemi mpe asakoli maloba maye : « E bandeko ba ngai na bato banso ba ekolo ya ngai, boyoka ngai. Nalingaki kotonga ndako mpo ya kobomba Sanduku ya Bo­ndeko bwa Yawe, ezala ebonga ya makolo ma Nzambe wa biso. Nale-ngeli biloko binso mpo ya kotonga yango.
I Ch LinVB 28:3  Kasi Nzambe alobaki na ngai : Yo moto okotonga ndako te mpo ya kokumisa nkombo ya ngai, zambi ozali moto wa bitumba mpe obomaki bato.
I Ch LinVB 28:4  Yawe Nzambe wa Israel aponoki ngai o libota lya ngai mobimba nazala mokonzi wa Israel seko. Solo aponoki Yuda azala mokambi, mpe o Yuda aponoki libota lya tata wa ngai, mpe o kati ya bana ba tata wa ngai aponoki ngai nazala mokonzi wa Israel mobimba.
I Ch LinVB 28:5  Yawe akabeli ngai bana baike, o ntei ya bana ba ngai aponoki mwana wa ngai Salomo afanda o ngwende ya boko­nzi bwa Yawe o Israel.
I Ch LinVB 28:6  Na nsima alobaki na ngai : Mwana wa yo Salomo akotonga ndako mpe mapango ma ngai, mpo nalingi ’te ye azala mwana wa ngai mpe ngai nakozala tata wa ye ;
I Ch LinVB 28:7  nalengeleli ye bokonzi bokozala bwa seko, soko atosi mibeko na biti­nda bya ngai, lokola azali kosala lelo.
I Ch LinVB 28:8  Mpe sikawa, o miso ma bato ba Israel banso, o miso ma lisanga lya Yawe Nzambe wa biso, botosa mpe boyekola mibeko minso mya Yawe Nzambe wa bino mpo ’te bozwa mokili molamu moye mpe bopesa bana ba bino mwango seko.
I Ch LinVB 28:9  Mpe yo Salomo, mwana wa ngai, yeba Nzambe wa tata wa yo mpe salela ye na motema moko mpe na mayele manso, zambi Yawe akotalaka mit­ema mya bato mpe ayebi makanisi ma bango manso. Soko oluki ye, okozwana na ye, kasi soko oboyi ye akobwaka yo seko.
I Ch LinVB 28:10  Sikawa, tala ma­lamu : Yawe aponi yo otongela ye ndako, ezala esika esantu ya ye. Le-nda mpe sala mosala. »
I Ch LinVB 28:11  Davidi apesi mwana wa ye Salomo mwango mwa ekoteli ya ndako, mwa ndako isusu, mwa ndako ya kobomba biloko, mwa ndako ya likolo, mwa biteni bya kati ya ndako mpe mwa eteni mpo ya ezipeli ya ebo-mbe­lo ya mai.
I Ch LinVB 28:12  Apesi ye mpe mwa­ngo mwa ndako inso alingi kotonga mpo ya kobongisa lopango lonene la Tempelo ya Yawe, mwa biteni binso bya penepene, mwa ndako ya kobo­mba mosolo mwa Tempelo ya Yawe, mpe mwa ndako ya kobomba biloko bisantu.
I Ch LinVB 28:13  Alakisi ye mpe mangomba ma banganga Nzambe na ba-Levi, mi­sala minso basengeli kosala na mpe biloko binso bisengeli na mosala o Tempelo ya Yawe.
I Ch LinVB 28:14  Apesi ye wolo mpo ya kosala biloko bya ndako ya Nzambe, na palata mpo ya kosala biloko bya mosala ;
I Ch LinVB 28:15  na wolo mpo ya kotula bitemiseli bya mwinda mpe mwinda moko moko ; na palata mpo ya bitemiseli bya mwinda ya palata mpe mpo ya mwinda mwa yango mo­ko moko ;
I Ch LinVB 28:16  na wolo mpo ya kosala meza ya mabonza ma mampa yoko yoko ; palata mpo ya kosala meza ya palata ;
I Ch LinVB 28:17  na nkanya, kopo ya konyakela mai, sani ya wolo kitoko, wolo mpo ya kosala kopo, na palata mpo ya kosala kopo yoko yoko,
I Ch LinVB 28:18  na wolo kitoko mpo ya altare ya malasi. Alakisi mpe mwango mwa likalo lya Nzambe, mwa bakerubim ba wolo na mapapu matandani mpe mazipi Sa­nduku ya Bondeko bwa Yawe.
I Ch LinVB 28:19  Makambo mana manso makomamaki na loboko la Yawe, mpo ’te alakisa bongo biteni binso bya mwango mona.
I Ch LinVB 28:20  Na nsima Davidi alobi na mwana wa ye Salomo : « Zala makasi mpe na mpiko ! Obanga te mpe oyoka nsomo te, zambi Yawe Nzambe wa ngai azali na yo. Akotika yo te, kasi akosalisa yo tee okosukisa mosala mwa boto-ngi ndako ya Yawe mobimba.
I Ch LinVB 28:21  Tala milongo mya misala mya banganga Nzambe na ba-Levi o Tempelo ; moto moko moko akoki mpe andimi mosala ata nini, asalisa yo o mosala mona. Bakomanda na bato banso ba ekolo batosa yo. »
Chapter 29
I Ch LinVB 29:1  Mokonzi Davidi alobi na bato banso maloba maye : « Mwana wa ngai Salomo, oyo Nza­mbe aponi, azali se mwana, azali na nzoto makasi te ; kasi mosala mozali monene, zambi ndako eye enene eko­zala ndako ya bato te, kasi ya Yawe Nzambe.
I Ch LinVB 29:2  Na bokasi bwa ngai bonso nalengeli binso mpo ya ndako ya Nzambe wa ngai, nazwi wolo mpo ya biloko bya wolo, palata mpo ya biloko bya palata, mbengi mpo ya biloko binso bya mbengi, bibende mpo ya biloko bya bibende, mabaya mpo ya biloko bya mabaya, mabanga ma oniksi, mabanga ma kokanga o bilamba, mabanga maindo na mabanga masusu ma langi ndenge na ndenge, mabanga ma motuya ndenge na ndenge na mabanga ma albatre ebele.
I Ch LinVB 29:3  Mpe nakobakisa biloko bya wolo mpe bya palata bya ngai moko binso mpo ya ndako ya Nzambe, zambi na­lingi ndako ya Nzambe wa ngai mingi ;
I Ch LinVB 29:4  nakopesa talenta ya wolo nkoto isato, ya wolo euti o Ofir, talenta ya palata kitoko nkoto nsambo mpo ya kokembisa bifelo bya ndako.
I Ch LinVB 29:5  Nani andimi kokabela Yawe eloko lelo, ezala wolo mpo ya biloko bya wolo, ezala palata mpo ya biloko bya palata, ezala mosolo mpo ya lifuta lya basali ? »
I Ch LinVB 29:6  Bankumu ba mabota ma Israel, bakomanda ba basoda nkoto to nkama na baye bazalaki kotala mambi ma mokonzi bandimi yango ;
I Ch LinVB 29:7  babo­nzeli mokonzi mpo ya misala mya ndako ya Nzambe : talenta ya wolo nkoto itano na darike nkoto zomi, talenta ya palata nkoto zomi, na talenta ya mbengi nkoto zomi na mwa­mbe, na talenta ya bibende nkoto monkama.
I Ch LinVB 29:8  Baye bazalaki na maba­nga ma motuya, bapesi mango o maboko ma Yekiel, wa libota lya Gerson mpo ’te abomba mango o ebombelo ya mosolo ya Ndako ya Yawe.
I Ch LinVB 29:9  Bato banso basepeli motindo bato bakabi makabo, zambi babonzeli Yawe ma­ngo na motema moko. Mokonzi Davidi mpe ayoki esengo enene.
I Ch LinVB 29:10  Davidi akumisi Yawe o miso ma bato banso ba lisanga, alobi : « Bakumisa yo, Yawe Nzambe wa Israel, tata wa biso ut’o kala tee o bileko binso seko.
I Ch LinVB 29:11  Na yo, Yawe, bonene, nguya, nkembo, bokonzi na lokumu seko, zambi binso bizali o likolo mpe o nse bizali bya yo. Na yo, Yawe, bokonzi na boyangeli bwa bikelamo binso.
I Ch LinVB 29:12  Nkita na lokumu iuti na yo. Yo nko­lo wa biloko binso ; nguya na bokasi izali o maboko ma yo. Ozali na nguya ya kotombola mpe kolendisa ata nani.
I Ch LinVB 29:13  Sikawa, e Nzambe wa biso, totondi yo mpe tokumisi nkombo ya yo ya nkembo.
I Ch LinVB 29:14  Ngai nde nani mpe bato ba ekolo ya ngai nde banani mpo ’te tokoka kobonza makabo na motema moko boye ? Binso biuti na yo, mpe biloko topesi yo biuti o maboko ma yo.
I Ch LinVB 29:15  O miso ma yo tozali bobele bauta na bampaya se lokola bankoko ba biso bazalaki. Mikolo mya biso awa o nse mizali koleka lokola elilingi mpe mikoumela te.
I Ch LinVB 29:16  E Yawe Nzambe wa biso, biloko ebele tokongoloki mpo ya kotonga ndako ya kokumisa nkombo ya yo esantu, biuti o maboko ma yo mpe bizali bya yo.
I Ch LinVB 29:17  E Nzambe wa ngai, nayebi ’te okotalaka mitema mya bato, mpe oko­ndimaka bato ba bosembo ; nabonzeli yo biloko bina binso na motema moko. Mpe sikawa na motema esengo namoni boniboni bato ba yo babonzeli yo mabonza na motema moko.
I Ch LinVB 29:18  E Yawe Nzambe wa bankoko ba biso Abarama, Izaka na Yakob, salisa bato ba yo batikala na makanisi malamu seko mpo ’te bakanisa bobele yo.
I Ch LinVB 29:19  Pesa mwana wa ngai motema semba, bongo atosa bitinda, maloba na mibeko mya yo mpo ’te akoka kosala makambo maye manso mpe kotonga ndako eye kitoko nalengeleli yo. »
I Ch LinVB 29:20  Na nsima Davidi alobi na bato banso ba lisanga : « Bokumisa Yawe Nzambe wa bino. » Mpe bato banso bakumisi Yawe Nzambe wa bankoko ba bango. Bafukami mpe bakumbameli Nzambe na mpe mokonzi.
I Ch LinVB 29:21  Mokolo mwa nsima, ba-Israel ba­bonzeli Yawe miboma na mabonza ma kotumba ; babomi ngombe babali nkoto yoko, bana mpata nkoto yoko, bapesi mpe mabonza ma bomeli na miboma ebele o nkombo ya Israel mobimba.
I Ch LinVB 29:22  O mokolo mona balei mpe bameli na esengo enene o miso ma Yawe. Na nsima baluboli Salomo, mwana wa Davidi, mokonzi mbala ya ibale, mpe o nkombo ya Yawe bapakoli ye mafuta. Bapakoli mpe Sadok mango, azala nganga Nzambe.
I Ch LinVB 29:23  Salomo afandi o ngwende ya Yawe, akomi mokonzi o esika ya tata wa ye Davidi, mpe makambo ma ye manso mazalaki kotambola malamu. Ba-Israel banso bazalaki kotosa ye.
I Ch LinVB 29:24  Bayangeli, bilombe na bana banso ba mokonzi Davidi bazalaki kotosa mokonzi Salomo.
I Ch LinVB 29:25  Yawe atomboli naino lokumu la Salomo o miso ma bato banso ba Israel, mpe apesi ye boko-nzi bwa nkembo lokola mokonzi moko wa Israel azalaki na bwango te.
I Ch LinVB 29:26  Davidi, mwana wa Yese, ayangelaki Israel mobimba.
I Ch LinVB 29:27  Bokonzi bwa ye o Israel boumelaki mibu ntuku inei : mibu nsambo o Ebron, mibu ntuku isato na misato o Yeruzalem.
I Ch LinVB 29:28  Ntango awei, akomi mobange, akokisi mikolo mya ye, azalaki na mosolo mingi mpe na lokumu lonene. Mwana wa ye Salomo akitani ye.
I Ch LinVB 29:29  Misala minso mokonzi Davidi asalaki, miye mya liboso na miye mya nsuka, mikomami o buku ya Bikela bya Samuel, momoni-makambo, o buku ya Profeta Natan mpe o buku ya Gad momoni-makambo.
I Ch LinVB 29:30  Maka­mbo manso ma bokonzi bwa ye, ngu­ya ya ye na bitumba abundaki, bisengo mpe mpasi inso ya ye moko, ya Israel mpe ya mikili minso mya bikolo bisusu, manso makomami wana.