Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
I MACCABEES
Up
1 2 3 4 5 6 7 8 9 10 11 12 13 14 15 16
Chapter 1
I Ma LinVB 1:1  Alesandro, mwana wa Filipo, moto wa Masedonia o mokili mwa Kitim, alongi Dario, mokonzi wa ba-Persi na ba-Medi. Bongo akitani ye bo mokonzi monene wa mokili banda Greke mpe Azia ya Westi.
I Ma LinVB 1:2  Abundi bitumba mingi, abotoli bibombamelo ebele mpe abomi bako­nzi ba yango.
I Ma LinVB 1:3  Atamboli tee nsuka ya mokili, akongoli biloko binso bya bikolo bina. Bato banso ba mokili mobimba bazalaki kobanga ye. Nzoka-nde amitomboli o motema, akomi moto wa lolendo.
I Ma LinVB 1:4  Abongisi lisusu limpinga linene lya basoda ba mpiko ; alongi mikili, abotoli bikolo na bituka bya bato ebele mpe atindi bango ’te bafuta ye mpako.
I Ma LinVB 1:5  Na nsima akomi na bokono mpe ayebi ’te liwa libelemi.
I Ma LinVB 1:6  Abengi bakonzi ba basoda, na bankumu baye bakolaki na ye esika yoko ut’o bo­mwana ; akaboli mokili mwa ye awa azalaki naino na bomoi.
I Ma LinVB 1:7  O mokolo mwa liwa lya ye akokisi mibu zomi na mibale mya bokonzi.
I Ma LinVB 1:8  Awa awei, bakonzi banene ba basoda ba ye bakamati bokonzi, moto na moto o ekolo ya ye moko.
I Ma LinVB 1:9  Bango banso, na bana ba bango, baumeli o bokonzi mibu miike, mabe makomi mingi o mokili mobimba mpo ya bango.
I Ma LinVB 1:10  Ebimi o libota lya bakonzi mwana moko mabe, nkombo ya ye Antioko Epifane, mwana wa mokonzi Antioko, oyo akangemaki o Roma, kasi akomi mokonzi o mobu mwa monkama na ntuku isato na nsambo o eleko ya ba-Greki.
I Ma LinVB 1:11  O mikolo mina, o kati ya ba-Israel, bato babe bazwami, bakosa bato mingi boye : « Tokende kokata bo­ndeko na bikolo bya penepene, mpo ut’o mokolo tokabwani na ba­ngo, makambo mingi ma mpasi ma­kweli biso. »
I Ma LinVB 1:13  Bato baike o kati ya bango bakei noki epai ya moko­nzi. Mokonzi alingisi bango ’te balanda mimeseno mya bapagano.
I Ma LinVB 1:14  Ya­ngo wana batongi ndako ya kelasi o Yeruzalem lokola bampaya bazalaki kotonga bipai binso.
I Ma LinVB 1:15  Batiki mobeko mwa kokata nzoto mpe babebisi bo­ndeko bosantu boye Nzambe akataki na bankoko. Bakomi kosangana na bapagano, mpe balandi nzela ya masumu.
I Ma LinVB 1:16  Antioko amoni ’te bokonzi bwa ye bolendi ; aluki sikawa kokoma mokonzi wa Ezipeti, mpo ’te akoma mokonzi wa bikolo bibale.
I Ma LinVB 1:17  Akoti o Ezipeti na basoda ebele. Akei na makalo, na nzoku mpe na masuwa mi­ngi.
I Ma LinVB 1:18  Akei kobundisa Tolemeo, mokonzi wa Ezipeti, mpe alongi ye. Tolemeo akimi mpe bato ba ye baike bakufi o etumba.
I Ma LinVB 1:19  Antioko alongi bi­bombamelo bya basoda ba Ezipeti, mpe abotoli biloko binso bitikalaki.
I Ma LinVB 1:20  Awa alongi ba-Ezipeti, azongi o mboka o mobu mwa monkama na ntuku inei na misato. Na basoda ebele mpenza akei kobundisa Israel na Yeruzalem.
I Ma LinVB 1:21  Antioko ayingeli o Ndako Esantu na lolendo mpenza, alongoli altare ya wolo mpe etemiseli ya mwinda,
I Ma LinVB 1:22  meza ya mabonza, mbeki ya vino, kopo inso, sani ya kotumba malasi iye isalemi na wolo, elamba enene, binkoti bya lokumu na mpe biloko bya wolo bizalaki kokembisa efelo ya Tempelo o esika ya boyingeli.
I Ma LinVB 1:23  Ayibi palata na wolo, na mpe biloko mingi bya motuya bibombamaki wana.
I Ma LinVB 1:24  Asopi makila ma bato ebele, alobi makambo ma nsomo mpenza. Na nsi­ma akei na biloko bina binso o mokili mwa ye.
I Ma LinVB 1:25  O Israel ezalaki lilaka linene ; o ekolo mobimba bato bazalaki kolela :
I Ma LinVB 1:26  Bakonzi na bakolo bakimeli, bilenge basi na bilenge babali bakondi mingi, kitoko ya basi ekomi kosila.
I Ma LinVB 1:27  Moto abali sika asali lilaka, mwasi wa libala atikali na mawa o ndako.
I Ma LinVB 1:28  Mokili moningani mpo ya bato bafandi wana, mpe nsoni ekangi libota mobimba lya Yakob.
I Ma LinVB 1:29  Nsima ya mibu mibale mokonzi atindi moto moko o bingumba bya Yuda mpo ya kofutisa bango mpako ; ayei o Yeruzalem na basoda ebele.
I Ma LinVB 1:30  Alobi na bato ba mboka maloba ma boboto, kasi ma lokuta. Bango ba­ndimi ye ; kasi na mbalakaka ayingeli o engumba ya bango, abebisi yango mobimba mpe abomi ba-Israel ebele.
I Ma LinVB 1:31  Ayibi biloko bya engumba, atumbi yango, abuki ndako mpe abomi lopango la engumba.
I Ma LinVB 1:32  Bato ba ye bakangi basi na bana mpe bakei na ba­ngo, bayibi mpe ngombe ya bango inso.
I Ma LinVB 1:33  Na nsima bazingi Engumba ya Davidi na lopango lonene ; batongi manongi manene ; ekomi ebombamelo ya basoda.
I Ma LinVB 1:34  Bafandisi wana bato babe, bato mpamba, na bibuneli mpo ya komibatela.
I Ma LinVB 1:35  Babombi wana bibuneli, biloko bya kolia mpe biye bayibaki o Yeruzalem ; ekomeli banguna motambo mwa nsomo.
I Ma LinVB 1:36  Ekomeli ndako esantu motambo, monguna monene akoki kosala Israel mabe ntango inso.
I Ma LinVB 1:37  Zongazonga na ndako esantu basopi makila ma bato bazali na likambo lyoko te, babebisi ndako esantu.
I Ma LinVB 1:38  Mpo ya bango bato ba Yeruzalem bakimi, engumba ekomi kotonda na bauta ; bana bayebi engumba ya ba­ngo lisusu te ; baye bafandaki wana bakimi engumba ya bango.
I Ma LinVB 1:39  Ndako esantu ekomi mpamba lokola mopotu, mikolo mya eyenga mikomi lokola mikolo mya lilaka ; mikolo mya Sabato mibongwani mikolo mya mpamba ; lokumu la kala lobongwani bosambwi bonene.
I Ma LinVB 1:40  Esika ezalaki kozwa lokumu, ekomi esika ya nsoni ; engumba enene ekomi engumba ya mawa. Bakonzi ba sika babebisi eyamba ya ba-Yuda
I Ma LinVB 1:41  Mokonzi abimisi mobeko ’te o mokili mwa ye bato banso bakoma se bato ba ekolo yoko.
I Ma LinVB 1:42  Moto nyonso aboya mimeseno mya mboka ya ye ; banso bandimi maloba mana.
I Ma LinVB 1:43  Ba-Yuda ebele balandi mobeko mwa mokonzi Antioko, bakumisi bikeko mpe baboyi mobeko mwa Sabato.
I Ma LinVB 1:44  Mokonzi atindi mpe bantoma ba ye na minkanda o Yeruzalem mpe o bingumba binso bya Yuda. Asengisi bango na makasi ’te bandima mpe balanda mimeseno mya bauta.
I Ma LinVB 1:45  Bo­ngo batika kobonza mabonza ndenge na ndenge o Tempelo mpe batosa mibeko mya Sabato to mya biyenga bine­ne lisusu te.
I Ma LinVB 1:46  Atindi bango basantola ndako esantu mpe biloko bisantu,
I Ma LinVB 1:47  batonga bitumbelo, ndako inene na ndako ike ya bikeko, babo­nzela byango ngulu na nyama mbi­ndo isusu.
I Ma LinVB 1:48  Bakatisa bana lisusu te, mpe bamibebisa na makambo ma bosoto mpe ma bosantoli ndenge na nde­nge.
I Ma LinVB 1:49  Babosana bongo Mobeko mpe babongola mimeseno mya ba­ngo minso.
I Ma LinVB 1:50  Ata nani akoboya eti­nda ya mokonzi akoki na etumbu ya liwa.
I Ma LinVB 1:51  Akomeli bato ba mokili mwa ye mobimba minkanda na mibeko mina. O bingumba binso atindi bato batala soko bakobonza mabonza o bingumba binso bya Yuda.
I Ma LinVB 1:52  Bato baike batosi maloba mana, batosi Mobeko lisusu te. Bangalisi ma­kambo mabe o ekolo mobimba.
I Ma LinVB 1:53  Mpo ya bango bato ba Israel bakomi komibomba o bisika biye bakoki kobombama.
I Ma LinVB 1:54  O mobu mwa monkama na ntuku inei na mitano, o sanza Kisleu, mikolo zomi na mitano, mokonzi Antioko atii ekeko enene ya nsomo o altare ya Tempelo. Atongisi mpe bitumbelo o bingumba bya Yuda.
I Ma LinVB 1:55  Batumbi mpaka ya malasi o liboso lya ndako ya bango mpe o libanda lya mboka.
I Ma LinVB 1:56  Bapasoli buku inso ya Mobeko mwa Nzambe mpe batumbi yango.
I Ma LinVB 1:57  Mokonzi atindi ’te baboma moto nyonso abombi buku ya Bondeko o ndako, na baye bakobi kotosa Mobeko mwa ba-Yuda.
I Ma LinVB 1:58  Sanza na sanza bato ba mokonzi balakisi ba-Israel makasi ma bango na bosambisi baye baboyi kotosa bitinda bya mokonzi.
I Ma LinVB 1:59  Sanza inso o mokolo mwa ntuku ibale na mitano babonzi mabonza o etumbelo eye batongi o esika ya altare ya kala.
I Ma LinVB 1:60  Lokola mobeko motindi, babomi bamama bakatisi bana ba ba­ngo,
I Ma LinVB 1:61  babomi mpe bilezi ba bango na bandeko ba bango na baye bakataki bana ; batingisi bilezi o nkingo ya bamama ba bango.
I Ma LinVB 1:62  Nzokande bato baike o Israel bamilakisi bato ba mpiko, baboyi kolia bilei bya ekila.
I Ma LinVB 1:63  Bandimi kokufa, baboyi kolia biloko mbindo ; baboyi bo­ngo kobebisa Bondeko bosantu bwa Nzambe. Bakufi se na ntina ena
Chapter 2
I Ma LinVB 2:1  Matatias, mwana wa Yoane, nko­ko wa Simeon oyo azalaki nganga Nzambe wa molongo mwa Yoarib, atiki Yeruzalem, akei kofanda o Modine.
I Ma LinVB 2:6  Emoni ye ndenge bazalaki kosantola makambo ma Nza­mbe o Yuda mpe o Yeruzalem,
I Ma LinVB 2:7  aga­ngi : « Mawa na ngai ! Nabotami nde mpo ’te namono liwa lya bato ba ngai, mpe nsuka ya Engumba Esantu ? Nafanda nye, awa banguna bakomi koyangela engumba, mpe bato ba ekolo esusu babotoli ndako esantu ?
I Ma LinVB 2:8  Te­mpelo ya engumba ekomi lokola mobali azangi lokumu.
I Ma LinVB 2:9  Balongoli biloko binso bipesaki yango lokumu. Bakati bana bake nkingo o balabala, basilisi bilenge babali na bobomi bango na mopanga.
I Ma LinVB 2:10  Ekolo nini esangoli naino makoki ma bokonzi bwa yango te ? Mpe eyibi biloko bya mboka eye te ?
I Ma LinVB 2:11  Babotoli yango biloko binso bya lokumu. Engumba ya bansomi ekomi engumba ya baombo.
I Ma LinVB 2:12  Ndako esan­tu eye ezalaki lokumu la biso, so­lo, ekomi mopotu monene. Awa ba­pagano basantoli yango,
I Ma LinVB 2:14  Matatias na bana ba ye bapasoli bilamba, balati mpili, mpe basali lilaka linene.
I Ma LinVB 2:15  Antioko atindaki basoda bakende koboyisa bato eyamba ya bango. Ya­ngo wana bakei o mboka Modine mpo ’te babonzela bikeko bya bango mabonza.
I Ma LinVB 2:16  Bato ba Israel ebele ba-ndimi kosala bongo, kasi Matatias na bana ba ye baboyi.
I Ma LinVB 2:17  Basoda ba mokonzi balobi na Matatias : « Yo ozali moto wa lokumu o engumba eye ; ozali na bana mpe na bandeko baike bakosalisaka yo.
I Ma LinVB 2:18  Yo bima moto wa liboso mpe tosa etinda ya mokonzi, lokola bato ba bikolo binso basalaki : bakonzi ba Yuda na baye batikali o Yeruzalem. Yo na bana ba yo bokokoma baninga ba mokonzi ; bakokumisa bino na palata, na wolo mpe na makabo ndenge na ndenge. »
I Ma LinVB 2:19  Matatias azongiseli ye polele : « Ata bato ba bikolo binso bya mokonzi bakotosa etinda ya ye, ata ba­nso bakoboya eyamba ya bankoko ba bango mpe bakondima mibeko mya mokonzi,
I Ma LinVB 2:20  ngai na bana mpe na bandeko ba ngai tokolanda bobele Bondeko boye Nzambe akataki na bankoko ba biso.
I Ma LinVB 2:21  Nzambe asalisa biso mpo totika Mobeko na mitindo mya ye te.
I Ma LinVB 2:22  Tokotosa etinda ya mokonzi te ; tokoboya eyamba ya biso te, ata na nini te. »
I Ma LinVB 2:23  Esilisi ye koloba bongo, mo-Yuda moko abimi o miso ma bato banso, abonzi libonza o altare la Modine lokola mokonzi apesaki etinda.
I Ma LinVB 2:24  Nta­ngo Matatias amoni yango, ayoki mabe mpe akomi kolenge na nkanda. Na nkele enso akei mbangu kokanga moto ona o altare mpe akati ye nki­ngo.
I Ma LinVB 2:25  Se o ntango ena abomi mpe soda wa mokonzi, oyo atindaki ’te babonza libonza, mpe akweisi altare.
I Ma LinVB 2:26  Abateli Mobeko makasi, lokola Pinekas asalaki Zimri, mwana wa Salu.
I Ma LinVB 2:27  Matatias akei kokatisa engumba mpe agangi : « Moto nyonso azali na mpiko ya kotosa Mobeko mpe ya kondima Bondeko, alanda ngai ! »
I Ma LinVB 2:28  Ye na bana ba ye batiki biloko bya ba­ngo binso o engumba mpe bakimi o ngomba.
I Ma LinVB 2:29  Na nsima bato ebele ba bo­sembo balingi kotosa Mobeko bakei kofanda o eliki,
I Ma LinVB 2:30  elongo na bana, na basi mpe na bibwele bya bango, mpo bakoki kofanda o engumba lisusu te.
I Ma LinVB 2:31  Bayebisi bayangeli na basoda baye bazalaki o Yeruzalem, o Engumba ya Davidi, ’te bato baye baboyi mobeko mwa mokonzi bakei kobomba­ma o eliki.
I Ma LinVB 2:32  Basoda ebele bakei kola­nda bango, mpe bazwi bango. Bapiki nganda pene na esika babombami mpe bamilengeli mpo ya kobundisa bango o mokolo mwa Sabato.
I Ma LinVB 2:33  Balobi na bango : « Tolembi, ekoki bongo ! Bobima mpe botosa etinda ya mokonzi, bongo tokoboma bino te. »
I Ma LinVB 2:34  Bango bazongisi : « Tokobima te, tokotosa mobeko mwa mokonzi te mpe tokosantola mobeko mwa Sabato te. »
I Ma LinVB 2:36  Kasi bango baboyi kobunda, ba­bwaki ata libanga te, bamibateli mpe te o esika babombami.
I Ma LinVB 2:37  Bagangi : « Tokufa biso banso o nzela ya bosembo. Nzambe ná bato bamono ’te bokoboma biso se mpamba, ntina te. »
I Ma LinVB 2:38  Basoda babandi kobundisa ba­ngo o mokolo mwa Sabato. Bato soki nkoto yoko, ná basi ná bana ná bibwele bya bango, bakufi.
I Ma LinVB 2:39  Matatias na bandeko ba ye bayoki yango, baleli mingi.
I Ma LinVB 2:40  Balobani : « Soko biso banso tokolanda ndakisa ya bandeko ba biso, soko toboyi kobundisa bapagano mpo tobikisa bomoi bwa biso mpe totosa mibeko mya biso, bakosilisa biso noki. »
I Ma LinVB 2:41  Bobele o mokolo mona bakani mokano moye : « Soko bayei kobundisa biso o mokolo mwa Sabato, tokobunda mpo tokufa te lokola bandeko ba biso bakufi o bisika babombamaki. »
I Ma LinVB 2:42  O mikolo mina bato ba lingomba lya ba-Kasideo bayei kokoto o molongo mwa bango ; bazalaki ba-Israel ba mpiko baye bakondimaka Mobeko na motema moko.
I Ma LinVB 2:43  Baye banso bakimaki likama bayei mpe kosangana na bango mpe kolendisa bango.
I Ma LinVB 2:44  Babongisi bongo limpinga linene lya basoda. Na nkanda enene babu­ndi etumba na basumuki mpe na baye banso batosaki Mobeko te. Basusu bakimi epai ya bapagano mpo ’te ba­zwa libiki.
I Ma LinVB 2:45  Matatias na baninga ba ye bakatisi mokili mpe babomi altare inso ya bikeko ;
I Ma LinVB 2:46  batindi na makasi ’te bakata o mokili mobimba mwa Isra­el bana baye bakatemi naino te.
I Ma LinVB 2:47  Babengani baye banso baboyi kotosa, mpe mosala mwa bango mota­mboli se malamu.
I Ma LinVB 2:48  Babikisi bongo Mobeko o maboko ma bapagano mpe ma bakonzi ba bango, mpe basilisi bokasi bwa basumuki.
I Ma LinVB 2:49  Mokolo mwa liwa lya Matatias mokomi penepene, yango wana alobi na bana ba ye : « O eleko eye ya mpasi mpe ya nkanda enene bato ba lofundo bakokinolaka Mibeko.
I Ma LinVB 2:50  Bana ba ngai, bozala na mpila o bolandi Mobeko, mpe bondima kokufa mpo ya Bondeko Nzambe akataki na ba­nkoko ba biso.
I Ma LinVB 2:51  Bokanisa maye ba­nkoko banso basalaka, bongo boko-zwa lokumu lonene mpe nkombo ya bino ekotikala seko.
I Ma LinVB 2:52  Ntango Nza­mbe amekaki Abarama, Abarama abo­yaki kotosa ye te, mpe akomi moto wa bosembo o miso ma Nza­mbe, mpo ya boyambi bwa ye.
I Ma LinVB 2:53  O ntango Yozefu azalaki na mpasi, atosaki Mobeko, mpe akomaki bongo mokonzi monene o Ezipeti.
I Ma LinVB 2:54  Nkoko wa biso Pinekas atosaki Mobeko na mpila mpenza ; yango wana azwaki likabo lya kozala nganga Nzambe seko.
I Ma LinVB 2:55  Yozue akokisaki mosala bapesaki ye, bongo akomi zuzi o Israel.
I Ma LinVB 2:56  Kaleb azalaki koloba se maloba ma bosolo o lisanga lya bato, yango wana akomaki nkolo wa mabelé o mokili moye.
I Ma LinVB 2:57  Davidi, moto wa bobangi Nzambe azwi ngwende ya bokonzi seko.
I Ma LinVB 2:58  Elia azalaki kotosa Mobeko na molende, yango wana atombwami o likolo.
I Ma LinVB 2:59  Ananias, Azarya na Misael batiaki mitema na Nzambe, bongo babikaki o litumbu lya móto.
I Ma LinVB 2:60  Daniel azalaki moto wa bosembo, ya­ngo wana abikaki o likama lya nkosi.
I Ma LinVB 2:61  Yango wana bino mpe bokanisa ’te banda mabota ma kala tee maye ma lelo, baye banso bakotia mitema na Nzambe, bakoki kolembe te.
I Ma LinVB 2:62  Basumuki babangisa bino te, mpo lokumu la bango lokosuka o bipolu mpe bakoliama na nkusu.
I Ma LinVB 2:63  Lelo bazali na lokumu, nde lobi bakomonono lisusu te. Bakozonga o mabelé esika bautaki, ekosila bongo na mikano mya bango.
I Ma LinVB 2:64  Bana ba ngai, bozalaka na mpiko mpe bokangana makasi na Mobeko, mpo soko bosali bongo bokozwa lokumu lonene.
I Ma LinVB 2:65  Boyoka Simeoni, ndeko wa bino. Nayebi ’te azali moto wa malako malamu. Botosa ye, zambi akozala lokola tata wa bino.
I Ma LinVB 2:66  Yudas Makabe azali elombe uta bomwana ; bongo akozala mokonzi monene wa basoda ba bino. Ye akokamba bino o bitumba na banguna.
I Ma LinVB 2:67  Bosangana na baye banso ba­kotosaka Mobeko ; na bango elongo bokobikisa bato ba ekolo ya bino.
I Ma LinVB 2:68  Bozongisela bapagano mabe maye basalaki bino, mpe botosa mitindo minso mya Mobeko. »
I Ma LinVB 2:69  Nsima yango abenisi bango mpe akei kokutana na bankoko ba ye.
I Ma LinVB 2:70  Awei o mobu mwa monkama na ntuku inei na motoba. Bakundi ye o lilita lya bankoko ba ye o Modine. Bato banso ba Israel basali lilaka linene mpo ya ye.
Chapter 3
I Ma LinVB 3:1  Mwana wa ye Yudas, oyo atangemi Makabe, akitani tata wa ye ;
I Ma LinVB 3:2  bandeko ba ye banso, na mpe baninga ba tata wa ye bandimi kosalisa ye. Babundi etumba ya Israel na mpiko enene.
I Ma LinVB 3:3  Atomboli lokumu la ekolo ya ye, alati molato mwa bitumba lokola elombe, akangi bibuneli o loketo, abandi bitumba mbala na mbala, na mopanga abateli nganda ya ye.
I Ma LinVB 3:4  Na bikela bya ye alakisi bokasi bwa nkosi, nsomo lokola mwana wa nkosi aleli nzala.
I Ma LinVB 3:5  Baye bapangani na Mobeko te, akei koluka bango mpo ’te abengana ba­ngo ; atumbi baye batiaki mobulu o ekolo,
I Ma LinVB 3:6  ayokisi bango nsomo ; alengisi baye basali mabe ; akambi bato ba ye o nzela ya libiki.
I Ma LinVB 3:7  Ayokisi bakonzi baike mpasi mpe­nza, kasi asepelisi bato ba Yakob na bikela bya ye ; yango wana bato bakokumisa nkombo ya ye seko.
I Ma LinVB 3:8  Akatisi bingumba bya Yuda mpo ya koboma bato baboyi Nzambe, alo­ngoli bongo nkanda ya Nzambe o Israel.
I Ma LinVB 3:9  Nkombo ya ye ekotangema kin’o nsuka ya mokili, mpo asangisi bato baye bapalanganaki.
I Ma LinVB 3:10  Apolonio asangisi bikolo bya pene mpe bato baike ba Samaria mpo ’te bakende kobundisa Israel.
I Ma LinVB 3:11  Yudas ayoki yango mpe akei kokutana na ye ; alongi ye o etumba mpe abomi ye. Banguna ebele bazoki mpe bakufi ; basusu baye babiki, bakimi.
I Ma LinVB 3:12  Ba-Yuda babotoli biloko bya bango ; Yudas akamati mopanga mwa Apolonio ; banda wana azalaki kobunda bitu­mba bobele na mopanga mona.
I Ma LinVB 3:13  Seron, komanda wa basoda ba Siria ayoki ’te Yudas asangisi bato ba boyambi na basoda basusu mpo ya bitumba ;
I Ma LinVB 3:14  amilobeli : « Nazwi nzela ya kokoma moto wa lokumu, bongo bato banso o ekolo bakumisa ngai. Nakokende kobundisa Yudas na bato ba ye, baye baboyi bitinda bya mokonzi. »
I Ma LinVB 3:15  Bongo akei na limpinga linene lya basoda, bato baboyi Nza­mbe, mpo ’te asukisa bato ba Israel.
I Ma LinVB 3:16  Awa akomi penepene na ngomba Betoron, Yudas abimi mpe akei kokutana na ye elongo na mwa liboke lya basoda.
I Ma LinVB 3:17  Awa bamoni limpinga linene lya basoda liyeli bango etu­mba, balobi na Yudas : « Tozali na bato mingi te, tokoki nde kobunda na basoda ebele boye ? Biso tolembi mpenza, lelo tolei naino te. »
I Ma LinVB 3:18  Yudas azongiseli bango : « Bato bazali mingi te bakoki kolonga limpinga linene. Tozala bato baike to te, Nzambe akoki kobikisa biso.
I Ma LinVB 3:19  Tokolonga banguna mpo ya bokasi bwa basoda ebele te, kasi na bokasi bwa Nzambe wa likolo.
I Ma LinVB 3:20  Bato baye baboyi Nzambe ba­tondi na lolendo, bayei kobundisa biso mpo ya koboma biso, ná basi ná bana ba biso, mpe bayiba biloko bya biso.
I Ma LinVB 3:21  Kasi biso tokobunda etumba mpo ’te tobatela bomoi bwa biso mpe mibeko mya biso.
I Ma LinVB 3:22  Nzambe akosilisa bokasi bwa bango, bakokoka biso te ; bobanga bango soki te ! »
I Ma LinVB 3:23  Esilisi ye koloba bongo, akei kobundisa banguna na mbalakaka. Bo­ngo Yudas akweisi Seron na basoda ba ye.
I Ma LinVB 3:24  Alandi baye bazalaki kokita ngomba Betoron tee bakomi o esobe. Bato soki nkama mwambe bakufi ; basusu bakimi o mokili mwa ba-Filisti.
I Ma LinVB 3:25  Ut’o mokolo mona bato banso babangi bokasi bwa Yudas na bandeko ba ye. O bikolo binso bya penepene babandi koyoka nsomo.
I Ma LinVB 3:26  Mokonzi monene mpe ayoki nsa­ngo ya ye, bipai binso bato bazalaki kosolola lisolo lya bitumba bya ye.
I Ma LinVB 3:27  Eyoki Antioko makambo mana manso, atoki na nkanda. Atindi ’te basangisa limpinga linene lya basoda ba mpiko enene.
I Ma LinVB 3:28  Afungoli sanduku ya mosolo mwa leta, afuti na mwa-ngo basoda lifuta lya mobu mobimba. Akebisi bango ’te bakoka ata na likama nini.
I Ma LinVB 3:29  Kasi amoni ’te mosolo mokomi moke : bato batombokoki mpo abomaki mibeko mya kala mya ekolo, bongo mpako ezalaki kofutama malamu lisusu te.
I Ma LinVB 3:30  Abangi ’te mosolo moye mokokoka te na bofuti bato ba ye ; yango esili esalemaki mpo azalaki kokabela bato ba ye bikabela. Na likambo liye aleki bakonzi banso bazalaki liboso lya ye.
I Ma LinVB 3:31  Ekomi ye na kwokoso, akani kokende o ekolo ya ba-Persi mpo ya kofutisa bango mpako, azwa mosolo mingi.
I Ma LinVB 3:32  Aponi Lisias, nkumu mpe moto wa libota lya bakonzi, bo moyangeli wa mokili mwa ye banda ebale Efrate tee ndelo ya Ezipeti.
I Ma LinVB 3:33  Atiki mpe mwana wa ye Antioko o maboko ma Lisias, abokolo ye tee ye moko azongi.
I Ma LinVB 3:34  Atikeli ye ndambo ya mampinga ma basoda ná mpe nzoku. Ayebisi ye motindo nini asengeli kosala, liboso mpenza o maye matali bato ba Yuda mpe ba Yeruzalem.
I Ma LinVB 3:35  Akani kokende kobundisa ba-Israel mpo ya kokweisa mpe kosilisa bango, na mpe baye batikali o Yeruzalem. Bongo na nsima, ata nko­mbo ya bango eyebana lisusu te.
I Ma LinVB 3:36  Akani mpe kotondisa mokili mwa bango na bato ba bikolo bisusu, mpe akabola mabelé ma bango.
I Ma LinVB 3:37  Ye moko mokonzi akei na limpinga lisusu lya basoda, atiki Antioko, mboka mokonzi ya ekolo ya ye o mobu mwa monkama na ntuku inei na nsambo. Akatisi ebale Efrate mpe akei o bikolo bya ngomba.
I Ma LinVB 3:38  O kati ya baninga ba mokonzi Lisias aponi Tolemeo, mwana wa Dorimeno, na Nikanor na mpe Gorgias,
I Ma LinVB 3:39  mpe atindi bango na basoda ba makolo nkoto ntuku inei, mpe na basoda ba farasa nkoto nsambo ; atindi bango bakende o mokili mwa Yuda, babebisa mwango lokola mokonzi alobaki.
I Ma LinVB 3:40  Bakei na limpinga liye linene mpe bakomi penepene na Emaus o esobe, esika bapiki nganda ya bango.
I Ma LinVB 3:41  Ntango bato ba mombongo bayoki yango, bakamati wolo na palata ebele, na mpe minyololo, bakei o nganda ya basoda kosomba ba-Israel bo baombo. Bato ba Idumea na ba-Filisti basali se bongo.
I Ma LinVB 3:42  Yudas na bandeko ba ye bamoni mabe malingi kokwela bango, awa basoda ebele bakomi o mokili mwa bango. Bayebi mpe etinda eye mokonzi apesaki basoda ’te baboma bato banso.
I Ma LinVB 3:43  Yango wana balobani : « Totombola lokumu la eko­lo ya biso, tobunda mpo tobikisa bato ba biso na mpe Tempelo esantu. »
I Ma LinVB 3:44  Babengi bato o likita mpo ’te bamilengele mpo ya kobunda, basa­mbela mpe babondela Nzambe, ayokela bango mawa mpe ngolu.
I Ma LinVB 3:45  Yeruzalem ekomi mopotu monene, moto moko azalaki koyingela to kobima wana lisusu te. Banyatinyati ndako esantu, bauta bakomi kofanda o ebombamelo, esika bapagano bazalaki kokutana. Bato ba Yakob bazalaki na esengo lisusu te, nzenze na likembe iyokani lisusu te.
I Ma LinVB 3:46  Banso bayei kosangana o Mispa, eye etalani na Yeruzalem. Liboso ba-Israel bazalaka kosambela wana.
I Ma LinVB 3:47  Mokolo bakomi, balali nzala, balati ngoto, bapakoli mputulu ya makala o mitó, mpe bapasoli bilamba.
I Ma LinVB 3:48  Bali­ngoli buku ya Mobeko mpo ’te bayeba maye bapagano bakotunaka bikeko bya bango bya banzambe ba lokuta.
I Ma LinVB 3:49  Bayei na bilamba bya banganga Nzambe, na mbuma ya yambo ya bilanga, mpe na eteni ya zomi ya biloko binso bya bilanga. Babengi ba-Nazir, baye bakokisi eleko ya elako eye balakelaki Nzambe.
I Ma LinVB 3:50  Batali o likolo mpe babeleli : « Tosala nini na bato baye ? Tokende na bango epai wapi ?
I Ma LinVB 3:51  Banyati mpe basantoli Te­mpelo esantu ya yo. Banganga Nza­mbe bazali na lilaka, bazali koyoka nsoni.
I Ma LinVB 3:52  Bapagano banso bayokani ’te basilisa biso. Oyebi makambo nini balingi kosala biso.
I Ma LinVB 3:53  Boniboni tokolonga bango soko yo okosalisa biso te ? »
I Ma LinVB 3:55  Nsima ya yango Yudas aponi bayangeli : basusu ba bato nkoto yoko, basusu ba bato monkama, basusu ba bato ntuku itano, basusu ba bato zomi.
I Ma LinVB 3:56  Baye bazalaki kotonga ndako, na baye babalaki sika, baye bazalaki na elanga ya vino ya sika, na baye bazalaki kobanga, alingisi bango ’te bazonga o mboka ya bango, lokola Mobeko molingisi.
I Ma LinVB 3:57  Balongwi wana mpe bakei kopika nganda o Sudi ya Emaus.
I Ma LinVB 3:58  Yudas alobi : « Bokamata bibuneli bya bino, bozala na mpiko ! Bomilengele mpo ’te lobi tobanda etumba na bato baye bayokani mpo ya kosilisa biso mpe koboma Tempelo ya biso.
I Ma LinVB 3:59  Eleki malamu tokufa o etumba, kasi tomono te mpasi eye ekokwela ekolo mpe Tempelo ya biso.
I Ma LinVB 3:60  Maye Nzambe alingi kosala, akokokisa mango. »
Chapter 4
I Ma LinVB 4:1  Gorgias akei na basoda ba makolo nkoto itano, na basoda ba farasa nkoto yoko, alongwi na bango o kati ya butu,
I Ma LinVB 4:2  mpo ’te bakoma o nganda ya ba-Yuda mpe babanda etumba o ntango ba-Yuda bamile­ngeli te. Baninga ba bango, baye bazalaki o ebombamelo, balakisi bango nzela.
I Ma LinVB 4:3  Ntango Yudas ayoki yango, akei na basoda ba ye ba mpiko, abimi na bango kobunda na basoda ba mokonzi bazalaki o Emaus.
I Ma LinVB 4:4  O ntango ena bango bapalangani naino o liba­nda lya nganda.
I Ma LinVB 4:5  Gorgias akomi o nganda ya Yudas na butu, kasi akuti moto moko te. Akanisi ’te ba-Yuda basili kokima, bongo alandi nzela ya ngomba mpo ya koluka bango.
I Ma LinVB 4:6  Etani ntongo, Yudas abimi o esobe na basoda nkoto isato, ata bazalaki na bibuneli mpe na mimpanga te, lokola esengelaki.
I Ma LinVB 4:7  Bamoni nganda ya bapagano. Bazalaki baike, na bakengeli ebele, na bato ba farasa bazalaki kozinga nganda ; banso bato bameseni na bitumba.
I Ma LinVB 4:8  Yudas alobi na bato ba ye : « Boba­nga bango te, ata bazali mingi ; bokima te ntango bakobanda etumba.
I Ma LinVB 4:9  Bokanisa boniboni bankoko ba biso babikaki o Mbu Etane mokolo Farao na basoda ba ye balandaki bango.
I Ma LinVB 4:10  Sikawa tobelela Nzambe, andima biso, akanisa Bondeko akataki na ba­nkoko ba biso : anyata lelo limpi­nga liye bozali komono na miso.
I Ma LinVB 4:11  Bongo bato ba bikolo binso bayeba ’te Mosikoli mpe Mobikisi wa Israel azali. »
I Ma LinVB 4:12  Ntango bampaya bamoni ’te ba-Yuda bazalaki koya epai ya bango,
I Ma LinVB 4:13  babimi o nganda mpo ya kobunda na bango. Basoda ba Yudas babeti mindule,
I Ma LinVB 4:14  mpe babandi etumba. Bapagano bakoki bango te, bakimi epai ya esobe.
I Ma LinVB 4:15  Kasi baye bakimi mbangu te, ba-Yuda babomi bango na mopanga, baye balandi bango tee Gazara kin’o esobe ya Idumea na Yamnia ; bato soki nkoto isato bawei.
I Ma LinVB 4:17  Yudas alobi na bato ba ye : « Bowela biloko bya banguna te, mpo etumba esusu ezali kozila biso.
I Ma LinVB 4:18  Gorgias na basoda ba ye bazali awa o ngomba penepene na biso. Bopika mpende mpo ’te bokweisa bango mpe. Na nsima ndebokoki kobotolo biloko bya bango lokola bolingi. »
I Ma LinVB 4:19  Yudas asilisi naino koloba te, bamoni ba­nguna baye bazalaki konongo bango ut’o ngomba.
I Ma LinVB 4:20  Bango bamoni ’te baninga ba bango basili kokima nganda ya bango etumbami na móto ; bayebi yango mpo ya milinga mizalaki kobuta wana.
I Ma LinVB 4:21  Bakomi kobanga mingi. Ntango bamoni mpe ndenge basoda ba Yudas bazalaki komilengele na etu­mba o esobe,
I Ma LinVB 4:23  Nsima Yudas azongi mpo ya kobotolo biloko o nganda. Babotoli wolo na palata mi­ngi, bilamba bya motuya bya kiusa ya longondo, mpe biloko bisusu bya motuya.
I Ma LinVB 4:24  Awa ba-Yuda bazongi, bakumisi mpe batondi Nzambe wa likolo, bayembi boye : « Nzambe asali malamu, bolingi bwa ye bokosilaka te ! »
I Ma LinVB 4:25  Solo, mokolo mona ba-Israel babiki o likama linene.
I Ma LinVB 4:26  Bampaya baye babiki, bayebisi Lisias makambo manso.
I Ma LinVB 4:27  Nsango ena etambwisi ye mayele mpe ele-mbisi ye mingi, mpamba te etumba na Israel esukeli ye mabe. Mokonzi atindaki ye bongo te, ye moko mpe alingaki bongo soki te.
I Ma LinVB 4:28  Nsima ya mobu moko, Lisias asangisi basoda ba mpiko nkoto ntuku motoba, basusu ba farasa nkoto itano, mpo ’te asilisa ba-Yuda.
I Ma LinVB 4:29  Bakomi o Idumea, bapiki nganda o Betsur. Yudas akei kozwana na bango, na basoda nkoto zomi.
I Ma LinVB 4:30  Emoni ye limpinga liye linene, asambeli boye : « E Mobikisi wa Israel, bato bakumisa yo. Yo mpenza osilisaki bokasi bwa elombe na maboko ma mosaleli wa yo Davidi ; yo mpenza okabaki limpinga lya ba-Filisti o maboko ma Yonatan, mwana wa Saul, mpe ma mosaleli wa ye.
I Ma LinVB 4:31  Sala ’te limpinga liye mpe likweya o maboko ma bato ba Israel, ekolo ya yo ; bongo bokasi bwa basoda ba ba­ngo ba makolo mpe ba farasa boyokisa bango nsoni.
I Ma LinVB 4:32  Bapanzana ; batika kotia elikya na bokasi bwa bango ; bolongi bwa biso bolembisa bango.
I Ma LinVB 4:33  Boma bango na mimpanga mya biso baye tolingi yo, mpo ’te baye banso bayebi nkombo ya yo bakumisa yo na nzembo. »
I Ma LinVB 4:34  Etumba ebandi. Awa bakutani, epai ya Lisias bato nkoto itano bakufi.
I Ma LinVB 4:35  Lisias amoni ’te basoda bakolo­nga te, mpo basoda ba Yudas bakani kobika to kokufa na mpiko. Yango wana azongi o Antiokia, akei kofuta basoda basusu mpo azonga o Yudea na basoda ebele, leka baye ba liboso.
I Ma LinVB 4:36  Yudas na bandeko ba ye balobi : « Ya solo, tokweisi banguna ba biso. Tokende kopetola Tempelo esantu mpe tobenisa yango lisusu. »
I Ma LinVB 4:38  Bamoni ’te Tempelo ekomi mpamba, ebebi ; banguna basantoli altare ; bizibeli bya Tempelo biziki. Matiti masili makoli o lopango la Tempelo lokola o zamba to o ngo­mba ; biteni bya ndako bibebi nye.
I Ma LinVB 4:39  Bapasoli bilamba bya bango, bapakoli mputulu o mitó mpe basali lilaka linene.
I Ma LinVB 4:40  Bakei kolala o nse, elongi o mabelé. Ntango babandi kobete mi­ndule babeleli Nzambe wa likolo makasi.
I Ma LinVB 4:41  Ntango bazalaki kopetola Te­mpe­lo, Yudas atindi bato bakende ko­bundisa baye batikali o ebombamelo.
I Ma LinVB 4:42  Na nsima aponi banganga Nzambe ba motema peto, baye bazalaki kotosa Mobeko,
I Ma LinVB 4:43  mpo bapetola esika esantu. Babwaki mabanga ma altare ya bikeko o esika ya bosoto.
I Ma LinVB 4:44  Bayokani nini basengeli kosala na altare ya mabonza, eye banguna basantolaki.
I Ma LinVB 4:45  Bazwi makanisi malamu. Bandimi koboma yango mpo ’te ekomela bango eloko ya nsoni te, mpo bapagano basantoli yango ; babuki yango.
I Ma LinVB 4:46  Kasi batii mabanga mana o ngo­mba ya Tempelo mpo ya kobomba mango, tee mokolo mosusu profeta moko ayebisa nini bakoki kosala na mabanga mana.
I Ma LinVB 4:47  Na nsima bakamati mabanga makatani te, engebene na Mobeko, mpe batongi altare ya sika lokola ezalaki liboso.
I Ma LinVB 4:48  Babongisi Tempelo o libanda mpe o kati ya ndako, mpe bapetoli lopango.
I Ma LinVB 4:49  Batuli biloko bya Tempelo ya sika, bakotisi etemiseli ya mwinda, altare ya kotu­mba malasi, mpe meza ya mampa.
I Ma LinVB 4:50  Batumbi mpaka ya malasi o altare, mpe bapelisi miinda mya etemiseli mingengi o Tempelo.
I Ma LinVB 4:51  Batii mampa o meza, bazongisi elamba enene o esika ya yango. Basukisi bongo misala mya bango minso.
I Ma LinVB 4:52  O mobu mwa monkama na ntuku inei na mwambe, o mokolo mwa ntu­ku ibale na mitano mwa sanza ya li­bwa, sanza ya Kisleu, na nta ntongo
I Ma LinVB 4:53  babonzi libonza engebene na Mobeko, o altare ya sika eye batongi.
I Ma LinVB 4:54  Ezalaki o mokolo mpe o elekomei bapagano basantolaki yango. Baye­mbi nzembo na nzenze, na lokombe mpe na likembe mpo ya kozongisela altare lokumu la kala.
I Ma LinVB 4:55  Bato banso bakumbami tee o nse mpo ya kokumisa Nzambe, mpe basambeli losa­mbo la bokumisi Nzambe oyo asalisaki bango o etumba.
I Ma LinVB 4:56  Mikolo mwambe basepeli eyenga ya bobenisi altare : na esengo enene babonzi mabonza ma kotumba, ma bokumisi mpe ma botondi Nzambe.
I Ma LinVB 4:57  Epai ya boyingeli ya Tempelo batii bikembiseli bya wolo o efelo ; babo-ngisi mbalasani mpe batii bizibeli bya sika o biteni bya ndako.
I Ma LinVB 4:58  Bato bayoki esengo enene mpe babosani noki nsoni bapagano bayokisaki bango.
I Ma LinVB 4:59  Yudas na bandeko ba ye na bato ba likita linene lya Israel batindi ’te mobu na mobu basepela eyenga ya bobenisi altare mikolo mwambe, banda mokolo mwa ntuku ibale na mitano mwa sanza ya Kisleu ; basepela eye­nga ena na esengo enene o mitema.
I Ma LinVB 4:60  Bobele o eleko ena batongi lopa­ngo zongazonga na ngomba Sion, na mpe manongi manene mpo ’te bapagano baya kobebisa esika eye lisusu te.
I Ma LinVB 4:61  Yudas atiki basoda basusu kuna babatela yango. Alendisi ebombamelo ya basoda o Betsur, mpo ’te bakoka kobatela mokili motalani na Idumea.
Chapter 5
I Ma LinVB 5:1  Bato ba bikolo bya penepene bayoki ’te ba-Yuda batongi altare lisusu mpe babongisi Tempelo lokola ezalaki liboso. Bayoki nkanda enene,
I Ma LinVB 5:2  bakani kosilisa bato banso ba ekolo ya Yakob baye bafandi epai ya bango ; babandi koboma mpe kobengana ba­ngo.
I Ma LinVB 5:3  Yudas akei kobundisa bana ba Ezau o Idumea, mpo bazingi ba-Israel o mokili mwa Akrabatene. Akwei­si mpe akitisi bango, mpe abotoli biloko bya bango.
I Ma LinVB 5:4  Akundoli mpe mabe bato ba Bayan basalaki : bazalaki kokanela bato mpe kotiela ba-Yuda mabaku o nzela mpo ya kokanga bango.
I Ma LinVB 5:5  Bakimi Yudas mpe bakei komibomba o manongi ma ba­ngo ; azingi bango, abeteli bango mobo­ndo, atumbi manongi na móto ; baye banso babombami kuna bakufi.
I Ma LinVB 5:6  Na nsima akei epai ya bato ba Amon ; akuti basoda na bato basusu ebele, na mpe komanda wa bango Timoteo.
I Ma LinVB 5:7  Abundi na bango bitumba mingi, alongi mpe anyati bango.
I Ma LinVB 5:8  Abotoli Yazer na mboka ya penepene ; na nsima azongi o Yudea.
I Ma LinVB 5:9  Bapagano ba Galaad bayokani ’te basilisa ba-Israel banso, baye bafandi o mokili mwa bango. Ba-Israel bakimi, bamibombi o ebombamelo ya Datema.
I Ma LinVB 5:10  Batindeli Yudas na bandeko ba ye monkanda na maloba maye : « Bato bafandi penepene na biso ba­yo­kani ’te basilisa biso.
I Ma LinVB 5:11  Bazali kole­ngele binso mpo ’te babotolo ebo­mba­melo ya biso, esika tokimi. Timo­teo azali komanda wa bango.
I Ma LinVB 5:12  Yaka noki kobikisa biso o maboko ma bango, mpo tosili tobungisi bato baike.
I Ma LinVB 5:13  Basili babomi bandeko ba biso banso o mokili mwa Tobia, baka­ngi basi na bana ba bango, mpe babotoli biloko bya bango. Babomi bato soki nkoto yoko. »
I Ma LinVB 5:14  Etangi bango nai­no monkanda mona, bantoma basusu bauti o Galilea bayei, bilamba bipaswani ; bayei se na nsango ena :
I Ma LinVB 5:15  « Bato ba Tolemais, Tiro na Sidoni bayokani na bapagano ba Galilea ’te basilisa biso. »
I Ma LinVB 5:16  Ntango bayoki yango, Yudas na bato ba ye basangani likita linene mpo ya kotala nini bakoki kosala mpo ya kobikisa bandeko baye bakomi na likama mpo bazalaki konyo-kwama na banguna.
I Ma LinVB 5:17  Yudas alobi na ndeko wa ye Simoni : « Pono bato mpe kende kobikisa bandeko ba biso o Galilea. Biso na ndeko wa ngai Yonatan tokokende o Galaad. »
I Ma LinVB 5:18  O Yudea atiki Yozefu, mwana wa Zakaria, na mpe Azarya, komanda wa basoda, na basoda basusu babatela mboka.
I Ma LinVB 5:19  Ati­ndi bango : « Boyangela bato baye, kasi bobanda etumba na bapagano te tee mokolo tokozonga. »
I Ma LinVB 5:20  Apesi Simoni bato nkoto isato bakende o Galilea ; yemei akei na bato nkoto mwambe o Galaad.
I Ma LinVB 5:21  Simoni akei o Galilea, abundi bitumba mingi na bapagano ; bakoki ye te mpe bakimi.
I Ma LinVB 5:22  Alandi bango tee o ezibeli ya engumba Tolemais. Banguna babungisi basoda soki nkoto isato. Simoni abotoli biloko bya bango.
I Ma LinVB 5:23  Akambi ba-Yuda ba Galilea mpe ba Arbata, ná basi ná bana ba bango, ná biloko bya bango binso, akei na ba­ngo o Yudea. Ezalaki esengo enene mpenza.
I Ma LinVB 5:24  O ntango ena Yudas Makabe na ndeko wa ye Yonatan bakatisi ebale Yordane, mpe batamboli mikolo misato o eliki.
I Ma LinVB 5:25  O nzela bakutani na ba-Na­bat ; baye bayambi bango na bo­bo­to mpe bayebisi bango manso makwelaki bandeko ba bango o mokili mwa Galaad.
I Ma LinVB 5:26  Balobi ’te : « Bato baike bamibombi o Bosora, Bozor, Alema, Kasfo, Maked na Karnain, ins­o se bingumba bizingami na mapango.
I Ma LinVB 5:27  Basusu babombami o bi­ngu­mba bisusu bya Galaad. Banguna bakani kobanda etumba lobi ; balingi koboma bisika bina, na bato banso babombami kuna ; banso bakufa o mokolo moko. »
I Ma LinVB 5:28  Na mbalakaka Yudas atindi basoda ba ye o nzela ya eliki tee Bosora. Alongi bato ba Bosora, abomi babali banso na mopanga, abotoli biloko bya bango binso, na nsima atumbi engumba.
I Ma LinVB 5:29  O kati ya butu balongwi kuna mpe bakei tee ebombamelo ya Datema.
I Ma LinVB 5:30  Etani ntongo bátala boye, bamoni basoda bazalaki kotia bibuteli mpo babuta lopango esika babo-mbami ; bazalaki mpe na biloko bisusu bikosalisa bango mpo ’te bakoto wana, mpe basili kobanda bitumba.
I Ma LinVB 5:31  Yudas amoni yango mpe ayoki o ebombamelo bato bazalaki koganga makasi mpe kobete mindule,
I Ma LinVB 5:32  bongo alobi na basoda ba ye : « Lelo bobunela bandeko ba bino etumba ! »
I Ma LinVB 5:33  Akaboli bango na mampinga masato mpe atindi bango balanda banguna o nsima. Babeti mindule mpe bagangi migango mikasi.
I Ma LinVB 5:34  Eyoki basoda ba Timoteo bongo, bayebi ’te Makabe asili akomi, bongo bakimi. Esukeli bango mabe, mpamba te, o mokolo mona babungisi bato soki nkoto mwambe.
I Ma LinVB 5:35  Na nsima azongi o Alema, abundi etumba mpe alongi bango. Abomi ba­bali banso na mopanga, abotoli bango biloko, na nsima atumbi engu­mba.
I Ma LinVB 5:36  Akei mpe kobotolo Kasfo, Maked, Bozor mpe bingumba bisusu bya Galaad.
I Ma LinVB 5:37  Nsima ya bitumba bina, Timoteo asangisi basoda basusu mpe apiki nganda o esika etalani na Rafon, o ngambo ya ebale.
I Ma LinVB 5:38  Yudas ati­ndi bato banongo nganda ya ba­nguna. Bayei koyebisa ye : « Bapagano ba bikolo binso penepene na biso bayokani na ye ; bazali na limpinga linene mpenza ;
I Ma LinVB 5:39  bakamati mpe ba-Arabu mpo ’te basalisa bango. Bapiki nga­nda o ngambo ya ebale, mpe bazali komilengele mpo ya kobunda na biso. » Yudas akei kokutana na bango.
I Ma LinVB 5:40  Awa Yudas na basoda ba ye bakomi penepene na ebale, Timoteo alobi na bakomanda ba ye : « Soko ye akatisi mai liboso, tokokoka ye te, ye akoleka biso ;
I Ma LinVB 5:41  kasi soko abangi mpe atikali o ngambo ya ebale, biso tokokatisa liboso, mpe tokolonga ye. »
I Ma LinVB 5:42  Awa akomi penepene na ebale, Yudas atii bayangeli o libongo, alobi na bango : « Boyebisa basoda ’te moto moko apika ema ya ye awa te, banso bakende etumba. »
I Ma LinVB 5:43  Ye moko akatisi mai liboso mpo ’te akutana na banguna, basusu banso balandi ye. Bapagano banso bakimi, babwaki bibuneli bya bango mpe bakei koluka libiki o tempelo ya Karnain.
I Ma LinVB 5:44  Ba-Yuda babotoli engumba, batumbi tempelo ná bato banso bazalaki o kati. Balongi bato ba Karnain, mpe banda mokolo mona bakoki Yudas lisusu te.
I Ma LinVB 5:45  Yudas asangisi ba-Israel banso ba­ye bazalaki o Galaad, mpo ’te bazonga o Yuda : bato banene na bato bake, basi na bana, na biloko bya ba­ngo binso.
I Ma LinVB 5:46  Bakomi o Efron, engu­mba enene mpe ekasi eye ezalaki o nzela ya bango mpo ’te bakoma o Yudea. Nzela ya koleka o loboko la mobali to o loboko la mwasi ezalaki te ; esengeli ’te bakatisa engumba.
I Ma LinVB 5:47  Kasi bato ba mboka baboyi kolekisa bango, bakangi bizibeli bya lopa­ngo la mboka, mpe batii mabanga mpo ya kozipa byango makasi.
I Ma LinVB 5:48  Na boboto bonso Yudas atindeli bango maloba maye : « Tolingi se kokatisa ekolo ya bino mpo tokende o ekolo ya biso. Moto moko akosala bino mabe te, tokoleka se boleki. » Kasi bango baboyi kofungolela ye.
I Ma LinVB 5:49  Yudas atindi ’te bato banso batikala, moto na moto, o esika ya ye.
I Ma LinVB 5:50  Basoda ba ye babandi etumba mokolo mobimba, moi na butu tee babotoli engumba.
I Ma LinVB 5:51  Babomi babali banso na mopanga, babebisi engumba, babuki ndako inso tee o nse, bayibi biloko binso ; na nsima bakatisi engumba mpe baleki likolo lya bibembe bya bato.
I Ma LinVB 5:52  Na nsima bakatisi Yordane mpe bakoti o esobe enene eye etalani na Betsan.
I Ma LinVB 5:53  Ntango inso Yudas azalaki kotambwisa baye batikali mwa nsima mpe kolendisa bato ba ye ba­nso tee bakomi o mokili mwa Yuda.
I Ma LinVB 5:54  Babuti ngomba Sion na esengo enene, babonzeli Nzambe mabonza, mpo banso bazongi na boboto, babungisi ata moto moko te.
I Ma LinVB 5:55  Ntango Yudas na Yonatan bazalaki o Galaad, mpe ndeko wa bango Simon o Galilea, penepene na Tolemais,
I Ma LinVB 5:56  Yozefu, mwana wa Zakaria, na Azarya, bayangeli wa basoda, bayoki nsango ya mpiko ya bango mpe motindo bazalaki kolonga banguna.
I Ma LinVB 5:57  Balobani : « Malamu biso mpe to­zwa lokumu ! Tokende kobundisa bikolo bya penepene. »
I Ma LinVB 5:58  Bapesi mobeko na basoda ba bango mpe bakei o Yamnia.
I Ma LinVB 5:59  Gorgias na bato ba ye babimi o engumba mpo ya kobunda na bango.
I Ma LinVB 5:60  Bakimisi Yozefu na Azarya, mpe balandi bango tee ndelo ya Yudea. O mokolo mona bato ba Israel nkoto ibale bakufi.
I Ma LinVB 5:61  Bakwei mpe­nza, mpo bayokaki Yudas na bandeko ba ye te, mpo bakanisaki ’te bakoki komilakisa bato ba mpiko.
I Ma LinVB 5:62  Nzokande bakokaki te na mosala mwa kobikisa Israel.
I Ma LinVB 5:63  Elombe Yudas na bandeko ba ye bazwi lokumu lonene o Israel mpe bato ba bikolo binso bayokaki nsa­ngo ya bango bakumisi bango mingi.
I Ma LinVB 5:64  Baweli kokoma penepene na bango mpe babeteli bango maboko.
I Ma LinVB 5:65  Yudas na baninga ba ye bakei kobundisa bana ba Ezau o ekolo ya Sudi. Babotoli Ebron mpe mboka inso ya penepene ; babomi bibombamelo mpe batumbi manongi mazalaki kozinga engumba.
I Ma LinVB 5:66  Balongoli nganda mpe bakei o Filistia, bakatisi Marisa.
I Ma LinVB 5:67  Mokolo mona banganga Nzambe basusu bakufi, mpo balingaki komilakisa bato ba mpiko o etumba, kasi bazalaki na bokebi te.
I Ma LinVB 5:68  Na nsima Yudas akei o Azot, o ekolo ya ba-Filisti ; abuki bitumbelo bya bango, atumbi bikeko bya banzambe ba bango, abotoli biloko binso bya bato ba mboka, mpe azongi o ekolo ya Yuda.
Chapter 6
I Ma LinVB 6:1  Mokonzi Antioko akatisi ekolo ya ngomba. Ayoki ’te o ekolo ya ba-Persi engumba yoko nkombo ’te Elimais etondi na biloko bya motuya, palata na wolo.
I Ma LinVB 6:2  O tempelo ya engumba ena biloko bya motuya bizalaki mingi : milato mya basoda mitongami na wolo, na bibuneli bya basoda. Alesandro, mwana wa Filipo, mokonzi wa Masedonia, oyo ayangelaka ba-Greki liboso, atikaki byango.
I Ma LinVB 6:3  Yango wana Antioko akei mpe ameki kobotolo engumba mpo ’te ayiba biloko. Kasi azwi nzela te, zambi bato ba engumba bayokaki nsango ya maye alingi kosala.
I Ma LinVB 6:4  Bongo bakamati bibuneli bya bango mpe bakei kobunda na ye ; bakimisi ye. Mokonzi Antioko akimi na mawa o motema mpe akei o Babilon.
I Ma LinVB 6:5  Azalaki naino o ekolo ya Persi, ntango bayei koyebisa ye ’te : « Bakweisi basoda ba ye bakendeki etumba o ekolo ya Yuda :
I Ma LinVB 6:6  Lisias oyo akotoki liboso o ekolo ena na basoda ebele, akimi zambi ba-Yuda bakomi kobunda makasi mpe bazalaki na bibuneli mingi, mosolo mingi, mpe biloko ndenge na ndenge bitikaki basoda baye bakimaki.
I Ma LinVB 6:7  Ba-Yuda babukibuki eloko ya nsomo eye bapagano batongaki o altare ya Yeruzalem, mpe bazingi esika esantu na lopango lonene lokola ezalaka liboso. Basali bobele bongo o engu­mba ya ye Betsur. »
I Ma LinVB 6:8  Eyoki mokonzi nsango ina inso, nsomo ekangi ye. Akomi kobanga mingi. Amikweisi o mbeto na mawa manene. Mosika te, abandi kobele ; mpamba te, makambo masalemi te lokola ye akanaki kosala.
I Ma LinVB 6:9  Mikolo mingi atikali se bongo na mawa manene. Emoni ye ’te akomi pene na liwa,
I Ma LinVB 6:10  abengi bandeko ba ye mpe alobi na bango : « Mpongi ekimi ngai, mpe nazali se motema likolo.
I Ma LinVB 6:11  Nazali komituna : Boniboni nakosuka o kati ya mpasi eye, mpe mpo nini mawa maleki mingi o motema ? Ntango nazalaki makasi, nazalaki moto malamu, mpe bato balingaki ngai !
I Ma LinVB 6:12  Kasi sikawa nayebi ’te nasalaki mabe o Yeruzalem, ntango nayibaki biloko binso bya wolo mpe bya palata bizalaki wana ; mpe nabomisaki ba-Yuda se mpamba, ntina te.
I Ma LinVB 6:13  Nayebi ’te mpasi eye ekweli ngai mpo nasalaki mabe ; nakokufa mpe na mawa manene o ekolo ya bampaya ! »
I Ma LinVB 6:14  Abengi Filipo, moko wa baninga ba ye, aluboli ye mokonzi wa ekolo.
I Ma LinVB 6:15  Apesi ye enkoti ya lokumu, elamba ya ye na mpe nkoma ya ye mpo ’te abokolo mwana wa ye Antioko, oyo akozala mokonzi nsima.
I Ma LinVB 6:16  Mokonzi Antioko akufi kuna, o mobu mwa monkama na ntuku inei na libwa.
I Ma LinVB 6:17  Ntango Lisias ayoki nsango ya liw­a lya ye, akomisi mwana wa Antioko, oyo Lisias abokoloki ut’o bo­mwana, mokonzi ; abakiseli ye nko­mbo esusu : Epator.
I Ma LinVB 6:18  Bato bazalaki o ebombamelo ya Yeruzalem bakangi nzela ya Tempelo mpe basali mayele manso mpo ya kotungisa ba-Israel mpe kosalisa bapagano.
I Ma LinVB 6:19  Yudas akani kosukisa bango ; yango wana abengi bato baya kobu-ndisa bango.
I Ma LinVB 6:20  Banso basangani o boso bwa ebombamelo mpe babandi etumba o mobu mwa monkama na ntuku itano. Basali bibuneli binene mpe babongisi bisika mpo ya kobetele bango mimbai.
I Ma LinVB 6:21  Kasi bato basusu babombamaki basali mayele, babimi. O kati ya bango ba-Israel babe mpe bazalaki,
I Ma LinVB 6:22  baye bakei koloba na mokonzi : « Okozila mikolo boni mpo obikisa biso mpe obekola bandeko ba biso ?
I Ma LinVB 6:23  Biso tondimaki kosalela tata wa yo, tondimaki kotosa mibeko mpe bitinda bya ye ;
I Ma LinVB 6:24  na ntina ena ba-Israel basusu bayini biso. Babomaki mpe bandeko ba biso banso baye bakweyaki o maboko ma bango, mpe babotoli mabelé ma biso.
I Ma LinVB 6:25  Babundisaki bobele biso te, kasi babotoli mpe mikili mya yo.
I Ma LinVB 6:26  Sikawa bazingi ebo­mbamelo ya Yeruzalem mpo ’te babotolo yango ; basili balendisi esika esantu mpe lopango la Betsur.
I Ma LinVB 6:27  Soko oyei noki te, bakokoba se kosala mabe, mpe na nsima okokoka lisusu kopekisa bango te. »
I Ma LinVB 6:28  Eyoki mokonzi maloba mana, ayoki nkanda enene. Abengi baninga ba ye banso, bayangeli na bakoma­nda banso.
I Ma LinVB 6:29  Basoda ba bikolo bisusu, na basusu bauti o bisanga bayei lokola.
I Ma LinVB 6:30  Baye ba makolo bakomi nkoto monkama, baye ba farasa bakoki nkoto ntuku ibale, bakisa nzoku ntuku isato na ibale, iye iyebi bitu­mba.
I Ma LinVB 6:31  Bakatisi Idumea mpe babandi kobundisa Betsur na bibuneli ndenge na ndenge. Etumba eumeli mingi, mpo ba-Yuda bazalaki kobima mbala mingi mpo ya kotumba bibuneli bya bango. Babundi na mpiko enene.
I Ma LinVB 6:32  Kasi Yudas abimisi bato ba ye o ebombamelo, apiki nganda o Bet-Zakaria pene na nganda ya bato ba mokonzi.
I Ma LinVB 6:33  Na ntongontongo moko­nzi akambi basoda ba ye o nzela ya Bet-Zakaria, atii bango o milongo mya etumba, mpe abetisi mindule.
I Ma LinVB 6:34  Bamelisi nzoku vino na mpe masa­nga ma mbuma isusu, mpo ’te ila­ngwa mpe ilinga etumba.
I Ma LinVB 6:35  Bakaboli nzoku na milongo. Penepene na nzoku yoko yoko batii basoda nkoto yoko, baye balati bibende o nzoto mpe binkoti bya mbengi o mitó. Babakisi lisusu basoda ba farasa nkama itano,
I Ma LinVB 6:36  baye basengeli kotala ntango inso esika nini nzoku elingi kokende, mpe kotika yango mosika te.
I Ma LinVB 6:37  O nzoku yoko yoko babakisi mwa ndako ya mabaya, ekangemi na nsinga ikasi. Basoda basato bazalaki o mwa ndako ena na mpe moto oyo akotambwisaka nzoku.
I Ma LinVB 6:38  Mokonzi atindi basoda basusu ba farasa epai na epai ya li­mpinga lina linene babatela lyango mpe babundisa banguna.
I Ma LinVB 6:39  O ntango moi mongali, nguba ya bango ya wolo na bibende izalaki ko­ngenge mpe kotanisa ngomba lokola bisungi.
I Ma LinVB 6:40  Basoda basusu ba mokonzi baleki o ngomba, basusu bakatisi eso­be ; bazalaki kokende bo limpinga linene lya basoda ba mpiko mpe na molongo mpenza.
I Ma LinVB 6:41  Baye banso bayoki mingongo mya bato ebele boye, na makeléle ma botamboli bwa ba­ngo, na bibuneli bya bango ndenge na ndenge, babangi. Solo, ezalaki limpinga linene mpe lya bokasi mpe­nza.
I Ma LinVB 6:42  Yudas na bato ba ye babelemi na bango mpo ya kobunda ; babomi bato ba mokonzi nkama motoba.
I Ma LinVB 6:43  Eleazar, nkombo ya ye esusu Avaran, amoni nzoku yoko eleki nzoku inso na bolai, balatisi yango bibende bileki biye bya nzoku isusu. Akanisi ’te nzoku ena ememi mokonzi.
I Ma LinVB 6:44  Yango wana amibosani mpo ya kobikisa bato ba ekolo ya ye, mpe azwa bongo lokumu seko.
I Ma LinVB 6:45  Na mpiko enene apoti mbangu epai ya nzoku, akatisi milongo mya basoda, abomi banguna penepene na ye tee batikeli ye nzela epai na epai.
I Ma LinVB 6:46  Aleki o kati ya makolo ma nzoku, atuboli yango libumu na mbeli, abomi yango. Nzoku ekweli Eleazar mpe ebomi ye.
I Ma LinVB 6:47  Kasi awa ba-Yuda bamoni bokasi mpe mpiko ya basoda ba mokonzi o bitumba, batiki kobunda mpe bazongi nsima.
I Ma LinVB 6:48  Basoda ba mokonzi bakei kobu-ndisa ba-Yuda o Yeruzalem, bapiki nganda mpo ya kobotolo Yudea mpe ngomba Sion.
I Ma LinVB 6:49  Bato ba Betsur basengi boboto mpe babimi o engumba ya bango, mpo bilei bikoki te na bobombami wana mikolo mingi. Mpa­mba te, ezalaki mobu mwa Sabato, bakataki bilanga te.
I Ma LinVB 6:50  Mokonzi abotoli Betsur, mpe atiki basoda basusu kuna bakengele engumba.
I Ma LinVB 6:51  Mikolo mingi akei kozinga Tempelo. Atongi masini ndenge na ndenge makoki kobwaka mabanga mosika, mpe bilingongo mpo ya kobete mimbai mpe kobwaka móto.
I Ma LinVB 6:52  Kasi ba-Yuda mpe basali se bongo : bango mpe batongi masini ma kobunda bitumba, bongo etumba eumeli mingi.
I Ma LinVB 6:53  Kasi bilei bikoki te o bibombelo, mpo ezalaki mobu mwa nsambo. Lisusu, ba-Israel, baye balongwaki epai ya bapagano mpe bayaki o mokili mwa Yudea basilisi bilei biye babombaki.
I Ma LinVB 6:54  Yango wana o Esika Esantu, bato batikali mingi te mpo ya nzala enene. Basusu bazongi moto na moto o mboka ya ye.
I Ma LinVB 6:55  Ntango mokonzi Antioko akufaki naino te, aponoki Filipo mpo ’te abokolo mwana wa ye ayeba mosala mwa bokonzi. Lisias ayoki ’te
I Ma LinVB 6:56  Filipo oyo autaki o ekolo ya ba-Persi mpe ya ba-Medi elongo na basoda ba mokonzi, sikawa aluki kokamata boko­nzi na makasi.
I Ma LinVB 6:57  Eyoki Lisias bongo, alingi kosilisa bitumba noki mpo ake­nde. Alobi na mokonzi, na bakomanda mpe na basoda ba ye : « Biso tozali kolembe mingi, biloko bya kolia bikoki te, mpe esika eye tozali kowela balendisi yango makasi. Tose­ngeli mpe kobongisa makambo ma ekolo.
I Ma LinVB 6:58  Bongo toyokana na bato baye, mpe na ekolo ya bango mobimba.
I Ma LinVB 6:59  Topesa bango ndingisa bazala lokola bazalaka liboso, mpe balanda mimeseno mya bango. Bayoki nkanda mpe batomboki bobele mpo biso topekisaki bango balanda mibeko mya bango te. »
I Ma LinVB 6:60  Mokonzi na bankumu ba ye ba-ndimi maloba mana, atindi bato bakende koyokana na ba-Yuda. Ba-Yuda bandimi.
I Ma LinVB 6:61  Awa basilisi koyokana, mokonzi mpe bakomanda balayi ndai. Nsima yango ba-Yuda babimi o ebombamelo ya bango.
I Ma LinVB 6:62  Mokonzi abuti ngomba Sion, amoni solo ’te esika eye ezali ebombamelo ekasi ; awangani ndai alayaki, atindi basoda ba ye babuka lopango mobimba.
I Ma LinVB 6:63  Na nsima azongi mbangu o Antioko ; kuna akuti Filipo oyo asili akoti o engu­mba. Abundi na ye mpe abotoli engu­mba na makasi.
Chapter 7
I Ma LinVB 7:1  O mobu mwa monkama na ntuku itano na moko Demetrio mwana wa Seleko atiki Roma. Elo­ngo na mwa ndambo ya bato asemi o mboka yoko, mpe kuna akamati bokonzi.
I Ma LinVB 7:2  Eyingeli ye o ndako enene ya mokonzi, esika bankoko ba ye bafa­ndaki, basoda ba ye bakangi Antioko mpe Lisias mpe balingi koya na ba­ngo epai ya ye.
I Ma LinVB 7:3  Ntango ayoki yango, alobi : « Nalingi komono bilongi bya bango te. »
I Ma LinVB 7:4  Basoda babomi bango, bongo Demetrio akomi mokonzi.
I Ma LinVB 7:5  Ba-Israel banso baye balingi Mobeko te mpe baboyi Nzambe bakei epai ya ye. Moto akambi bango, Alkime ; azalaki kowela kokoma nganga mokonzi.
I Ma LinVB 7:6  Bafundi bato ba Israel o miso ma mokonzi, balobi : « Yudas na ba­ndeko ba ye babomi baninga ba yo banso mpe babengani biso o ekolo ya biso.
I Ma LinVB 7:7  Tolingi ’te otinda moto moko, oyo yo otii motema na ye, akende kotala mabe maye Yudas asalaki biso mpe bokonzi bwa yo. Bongo bapesa ye etumbu, elongo na baye banso basalisaki ye. »
I Ma LinVB 7:8  Mokonzi aponi Bakides, moninga wa mokonzi mpe nkumu wa ekolo, oyo alingi mokonzi mingi. Azalaki moyangeli wa mokili kati ya Efrate na Ezipeti.
I Ma LinVB 7:9  Atindi ye elongo na Alkime, moto aboyi Nzambe, oyo azwa­ki akomisi nganga mokonzi, bakende kotumbola ba-Israel.
I Ma LinVB 7:10  Bakei na basoda ebele mpe bakomi o mokili mwa Yuda. Batindeli Yudas na bandeko ba ye bantoma na maloba ma boboto, kasi ma lokuta.
I Ma LinVB 7:11  Kasi bango bandimi maloba mana soki te, mpo bamoni ’te bayei na basoda ebele.
I Ma LinVB 7:12  Nzokande lingomba lya bateyi ba Mobeko bakei kokutana na Alkime mpe na Bakides mpo ’te bameka koyokana.
I Ma LinVB 7:13  Ba-Israel ba liboso baye baluki nzela ya boyokani, nde ba-Kasideo.
I Ma LinVB 7:14  Ba­lobi : « Nganga Nzambe oyo ayei na basoda elongo azali moto wa libota lya Arone, akoki kosala biso mabe te. »
I Ma LinVB 7:15  Mpe ya solo, apesi bango maloba ma boboto, mpe alayi ndai eye : « Tokosala bino mabe te, baninga ba bino mpe te. »
I Ma LinVB 7:16  Bandimi maloba ma ye, nzokande se o mokolo moko aka­ngisi bato ntuku motoba mpe abomisi bango. Likambo lyango likomami o Minkanda Misantu :
I Ma LinVB 7:17  « Bapanzaki bibembe bya basantu ba yo, basopaki makila ma bango zongazonga na Yeruzalem, mpe moto wa kokunda bango azalaki te. »
I Ma LinVB 7:18  Bongo nsomo ekangi bato banso, balobi : « Bazali ba­to ba lokuta, bazangi bosembo ; mpamba te, bakokisi maloba ma ba­ngo te, babuki ndai balayaki. »
I Ma LinVB 7:19  Bakides alongwi o Yeruzalem, apiki nganda o Betzet. Akangisi basoda baye bandimaki kolanda ye, na mpe bato basusu ; abomisi bango mpe atindi ’te babwaka bango o libulu linene.
I Ma LinVB 7:20  Na nsima atiki mokili o maboko ma Alkime, atikeli ye basoda mpo ’te babatela ye, mpe azongi epai ya mokonzi.
I Ma LinVB 7:21  Alkime asali makasi mpo ’te bandima ye bo nganga mokonzi.
I Ma LinVB 7:22  Baye banso bazalaki kotia mobulu o ekolo basangani na ye. Bongo bazwi bokonzi o mokili mwa Yuda ; mpe basali mabe mingi o Israel.
I Ma LinVB 7:23  Yudas amoni mabe maye Alkime na bato ba ye bazalaki kosala bato ba Israel, maleki maye bapagano basalaki.
I Ma LinVB 7:24  Atamboli o mokili mobimba mwa Yudea mpo ya kopesa bakambi baye bakimaki ye etumbu, mpe kokangisela bango nzela, bakutana na bato te.
I Ma LinVB 7:25  Noki Alkime amoni ’te Yudas na bato ba ye baleki ye na bokasi, akoki kobunda na ye lisusu te. Azongi epai ya mokonzi mpe afundi Yudas na makambo manene.
I Ma LinVB 7:26  Mokonzi atindi Nikanor, moyangeli monene wa basoda mpe nkumu wa ekolo, oyo azalaki koyina mpe kokinola ba-Israel, aboma ba-Yuda banso.
I Ma LinVB 7:27  Akomi o Yeruzalem na basoda ebele. Atindeli Yudas na bandeko bantoma mpo bakosa ye na maloba maye ma boboto :
I Ma LinVB 7:28  « Etumba ekoki kozala kati ya biso na yo te ; nakoya se na mwa ndambo ya basoda mpo tokutana na yo na bo­boto. »
I Ma LinVB 7:29  Ntango akomi epai ya Yudas, bayambani na boboto, kasi ba­nguna bamilengeleki ’te bakanga Yudas na mayele.
I Ma LinVB 7:30  Yudas amoni ’te moto oyo ayei na mayele mabe, abangi mpe ali­ngi komono ye lisusu te.
I Ma LinVB 7:31  Ntango Nikanor amoni ’te bayebi mayele ma ye, akei kobundisa Yudas o nzela ya Kafarsalama.
I Ma LinVB 7:32  Basoda ba Nikanor soki nkama itano bakufi o etumba, basusu bakimi o Engumba ya Davidi.
I Ma LinVB 7:33  Nsima ya makambo maye, Nikanor akei o ngomba Sion. Banganga Nzambe babimi o Tempelo elongo na bakolo ba mboka mpo ’te bapesa ye losako na boboto mpe balakisa ye libonza bazalaki kobonza mpo ya mokonzi.
I Ma LinVB 7:34  Kasi ye aseki mpe atioli bango, abwakeli bango nsoi mpe afingi bango na maloba ma lofundo.
I Ma LinVB 7:35  Na nkanda mpenza alayi ndai eye : « Soko mbala eye nakangi Yudas na basoda ba ye te, nakotumba Tempelo eye mokolo nakozonga nzoto kolo­ngonu. » Mpe akei na nkanda enene.
I Ma LinVB 7:36  Banganga Nzambe bakoti o Tempelo, bakei koteleme o boso bwa altare, balobi na mai o miso :
I Ma LinVB 7:37  « E Nzambe, yomei oponoki ndako eye mpo ’te bato bakumisa nkombo ya yo awa, bazala na esika ya kosambela mpe ya kobondela yo.
I Ma LinVB 7:38  Bekola moto oyo na basoda ba ye, bakufa na mopanga ! Okanisa boniboni batuki yo, oyokela bango ngolu te ! »
I Ma LinVB 7:39  Nikanor alongwi o Yeruzalem mpe akei kopika nganda o Betoron. Limpinga lya basoda ba Siria liyei kosangana na ye.
I Ma LinVB 7:40  Na bato nkoto isato Yudas apiki nganda o Adasa. Na nsima asambeli losambo loye :
I Ma LinVB 7:41  « Mokolo bantoma ba mokonzi batiolaki yo, anzelu wa yo abimaki mpe abomaki bato nkoto monkama na ntuku mwambe na itano.
I Ma LinVB 7:42  Se bongo onyata mpe limpinga lya basoda baye o miso ma biso. Bongo baye bakotikala bayeba ’te atukaki Tempelo ya yo. Opesa ye etumbu mpo ya mabe asalaki ! »
I Ma LinVB 7:43  Mampinga ma basoda mayei ko­zwana o sanza Adar, mikolo zomi na misato. Basoda ba Nikanor bakiti. Ye moto akufi liboso o etumba.
I Ma LinVB 7:44  Emoni basoda ba ye ’te akufi, babwaki bibuneli bya bango mpe bakimi.
I Ma LinVB 7:45  Ba-Yuda balandi bango mokolo moye mobimba, banda Adasa tee Gazara ; o nzela bazalaki kobete mindule makasi.
I Ma LinVB 7:46  O mboka inso ya penepene ya Yudea bato babimi mpo ya kokanga basoda bazalaki kokima. Bameki kozonga, kasi nzela ya kokima ezalaki te. Banso bakufi na mopanga, moto moko abiki te.
I Ma LinVB 7:47  Bakongoli biloko bya bango, bakati Nikanor motó mpe loboko la mobali ; na loboko loye aka­nelaki Tempelo na lofundo ; bamemi lango o Yeruzalem mpo ya kolakisa bato.
I Ma LinVB 7:48  Bato banso bayoki ese­ngo mpe basepeli mokolo mona lokola o mokolo mwa eyenga enene.
I Ma LinVB 7:49  Bapesi mobeko ’te mobu na mobu basepela eyenga ena o mokolo mwa zomi na misato mwa sanza Adar.
Chapter 8
I Ma LinVB 8:1  Yudas ayokaki masolo ma ba-Roma : « Bazali makasi mpenza, kasi bazali motema malamu ona bato balingi koyokana na bango. Bakoya­mbaka bango banso lokola bandeko. »
I Ma LinVB 8:2  Solo, bazalaki makasi. Yudas ayoki masolo ma bitumba bya bango o mokili mwa ba-Galia ; ayoki mpe boniboni balongaki ekolo ena mpe bafutisaki bango mpako.
I Ma LinVB 8:3  Ayoki mpe manso basalaki o Espanya mpo ’te bazwa wolo na palata mazalaki o mabelé.
I Ma LinVB 8:4  Ata ekolo ena ezalaki mosika, balongaki yango mpo bazalaki bato ba bwanya mpe ba molende. Balo-ngaki mpe bakonzi basusu bautaki mosika ut’o nsuka ya mokili mpo ya kobundisa bango ; bakweisaki bango banso mpe basukisaki bango nye. Bato ba bikolo bisusu basengeli kofuta bango mpako mobu na mobu.
I Ma LinVB 8:5  Ba-kweisaki mpe mokonzi Filipo na Perseo mokonzi wa ba-Kiti, na mpe baye banso batombokeli bango, tee bakomi kotosa ba-Roma.
I Ma LinVB 8:6  Antioko monene, mokonzi wa Azia, oyo akamataki nzoku monkama na ntuku ibale, farasa na makalo, na mpe li­mpinga linene lya basoda ba makolo mpo ya kobundisa bango, basukisaki ye mpe.
I Ma LinVB 8:7  Bakangaki ye awa azalaki naino na bomoi, bafutisi ye na mpe bakitani ba ye mpako enene ; basengi ye mpe bato lokola ndanga.
I Ma LinVB 8:8  Babotoli ye mokili mwa India, bikolo bya Media na Lidia na bikolo biike, mpe bapesi byango na mokonzi Emeno.
I Ma LinVB 8:9  Ba-Greki bakanaki kobunda na ba­ngo mpo ’te basilisa bango nye,
I Ma LinVB 8:10  kasi ba-Roma bayoki yango ; batindi mokonzi monene se moko. Ba-Greki ba­ike bakufi. Ba-Roma bakangi basi na bana ba bango, bayibi biloko bya ba­ngo, babebisi mokili mpe babuki bi­bombamelo binso. Tee lelo ba-Greki banso bazali baombo ba bango.
I Ma LinVB 8:11  Basali se bongo na bikolo bisusu mpe na bato ba bisanga baye baboyi koya­mba bango. Basukisi bango, bakomisi bango baombo.
I Ma LinVB 8:12  Kasi ba-Roma balakisi bondeko na baye baluki boyokani na bango. Bazalaki koyangela bakonzi ba bikolo bya penepene ná baye bazalaki mosika. Solo, baye ba­nso bayoki nkombo ya ba-Roma, babangi.
I Ma LinVB 8:13  Baye bango balingi kosalisa mpo bakoma bakonzi, bakokoma bakonzi. Baye bango balingi kolongola, bakolongwa. Solo, ekolo ya bango elendi mpenza.
I Ma LinVB 8:14  Ata bongo, o kati ya bango moto moko te aluki kozwa enkoti ya bokonzi to kolata elamba ya bokonzi mpo ya komikumisa.
I Ma LinVB 8:15  Bazali na likita lya bato nkama isato na ntuku ibale ; bakosanganaka likita mokolo na mokolo mpo batala maye makoki kobongisa bolamu bwa bato ba ekolo.
I Ma LinVB 8:16  Mobu na mobu bakoponoko moto moko o kati ya bango azala mokonzi wa ekolo mobimba. Banso bakotosaka bobele ye, mpe bakoyokelaka ye zuwa te.
I Ma LinVB 8:17  Yudas aponi Epolemo, mwana wa Yoane, wa libota lya Akos, mpe Yason mwana wa Eleazar. Atindi bango o Roma kokata bondeko na bango,
I Ma LinVB 8:18  mpo ’te ba-Roma basalisa bango ’te balongola mokumba mwa boombo, moye ba-Greki botieli ba­ngo.
I Ma LinVB 8:19  Nsima ya mobembo molai, bakomi o Roma ; bakei o likita lya bankumu, balobi boye :
I Ma LinVB 8:20  « Yudas Makabe, bandeko ba ye na ba-Yuda ba­nso, batindi biso epai ya bino mpo tokata bondeko, toyokana mpe tofanda na boboto ; bongo botanga biso o molongo mwa baye balingi bino. »
I Ma LinVB 8:22  Tala awa maloba ma mo­nkanda mwa boyokani bakomi o nka­sa ya mbengi ; batindi yango o Yeruzalem mpo ’te ba-Yuda bazala na elembo ya bondeko bakataki, ya boyokani mpe ya boboto :
I Ma LinVB 8:23  « Boboto na bolamu bozala na ba-Roma mpe na ba-Yuda o mokili mpe o mbu seko ! Bamono mopanga te, monguna akoma mpe pene na bango te !
I Ma LinVB 8:24  Soko etumba ebimi o Roma to o ekolo yoko ezali na bango bondeko, eye ba-Roma bakoyangelaka,
I Ma LinVB 8:25  ekolo ya ba-Yuda ekobunda na bango molongo moko engebene na motindo maye makokwela o ntango ena makosengisa bango.
I Ma LinVB 8:26  Bakopesa banguna eloko te, mbuma ya mampa te, bibuneli to mosolo te, masuwa mpe te. Roma alingi bongo ; ba-Yuda bakokokisa lotomo loye mpe bakozwa lifuta lyoko te.
I Ma LinVB 8:27  Se bongo soko etumba ekweli ba-Yuda, ba-Roma bakobu­nda na bango molongo moko, engebene na motindo maye makokwela o ntango ena makosengisa bango.
I Ma LinVB 8:28  Bakopesa banguna eloko te, mbuma ya mampa te, bibuneli to mosolo te, masuwa mpe te. Roma alingi bongo. Basengeli kokokokisa lotomo loye, mpe bakosenge lifuta te.
I Ma LinVB 8:29  Na maloba maye ba-Roma bakati bondeko na ba-Yuda.
I Ma LinVB 8:30  Soko na nsima moko wa biso babale alingi kobakisa to kolongola mpo yoko, ekosalema se soko mosusu andimi ; mpe eye balongoli to babakisi ekokoma mobeko.
I Ma LinVB 8:31  Mpo ya likambo lya mabe maye Demetrio asali ba-Yuda, tokomelaki ye boye : ‘Mpo nini ozali konyokolo ba-Yuda ? Biso tokoyokanaka na ba­ngo malamu !
I Ma LinVB 8:32  Soko bafundi yo lisusu, biso tokosalisa bango mpe tokobundisa yo o nzela ya mokili mpe ya mai’. »
Chapter 9
I Ma LinVB 9:1  Eyoki Demetrio ’te Nikanor awei o etumba elongo na basoda ba ye, atindi lisusu Bakides na Alkime na limpinga lya basoda o mokili mwa Yuda.
I Ma LinVB 9:2  Bayei o nzela ya Galilea mpe bazingi Mesalot o mokili mwa Arbeles. Babotoli mboka, babomi bato ebele.
I Ma LinVB 9:3  O mobu mwa monkama na ntuku itano na mibale, o sanza ya yambo, bayei kopika nganda o boso bwa Yeruzalem.
I Ma LinVB 9:4  Nsima bakei o Berea elongo na basoda ba makolo nkoto ntuku ibale mpe na basoda ba farasa nkoto ibale.
I Ma LinVB 9:5  Yudas apikaki nganda ya ye o Eleasa, azalaki na basoda ba mpiko nkoto isato.
I Ma LinVB 9:6  Emoni bango ’te banguna baleki ebele, bayoki nsomo. Baike bakimi nganda, etikali se bato nkama mwambe.
I Ma LinVB 9:7  Yudas amoni ’te bato ba ye bakimi bobele o ntango etumba elingi ebanda. Ayoki mawa manene mpo azalaki lisusu na ntango ya kosangisa bato ba ye te.
I Ma LinVB 9:8  Ata mayele masileli ye, alobi na baye batikali : « Boteleme, tokende kobunda na banguna, mbele tokokoka bango. »
I Ma LinVB 9:9  Nzokande basoda bameki kobongola makanisi ma ye, balobi : « Tobikisa bomoi bwa biso ; eloko esusu tokoki kosala sikawa ezali te. Mbele na nsima tokozonga mpo tobunda elongo na bandeko basusu. Sikawa tokoki ata moke te. »
I Ma LinVB 9:10  Yudas azongisi : « Nakoki kosala bongo te, nakoki kokima bango te. Soko ngonga ya biso ekoki, tokufa na motema mpiko mpo ya bandeko ba biso, tobebisa lokumu la biso te. »
I Ma LinVB 9:11  Banguna babimi o nganda ya ba­ngo, bayei koteleme o boso bwa ba­ngo. Bato ba farasa bakabwani na mangomba mabale : lingomba lya baye babwaki mabanga na lingomba lisusu babeti makula bazalaki kokende liboso ; basoda o milongo mya liboso bazalaki bilombe.
I Ma LinVB 9:12  Bakides azalaki o loboko la mobali ; basoda ba makolo babelemi na milongo mibale ntango bazalaki kobete mindule. Bato ba Yudas mpe babeti mindule.
I Ma LinVB 9:13  Mokili mo­ningani na migango mya basoda. Etumba ebandi na ntongo mpe eumeli tee butu.
I Ma LinVB 9:14  Yudas amoni ’te Bakides na basoda ba ye baleki na bokasi o loboko la mobali ; akei na basoda baleki mpiko
I Ma LinVB 9:15  kobundisa banguna baye bazalaki o loboko la mobali, mpe balandi bango tee ngomba Azara.
I Ma LinVB 9:16  Ntango basoda baye bazalaki o loboko la mwasi bamoni ’te basoda baye bazalaki o loboko la mobali bakimi, bayei nsima ya Yudas mpe babundi na ye.
I Ma LinVB 9:17  Etu­mba engali mpenza ; epai na epai bato mingi bakufi.
I Ma LinVB 9:19  Yonatan na Simoni balongoli ebe­mbe ya ndeko wa bango Yudas, bakundi ye o lilita lya bankoko ba ye o Modine.
I Ma LinVB 9:20  Ba-Israel banso baleli ye mingi, basali lilaka linene. Mikolo mi­ngi baleli ye :
I Ma LinVB 9:21  « Elombe oyo abikisaki Israel akufi ndenge nini e ? »
I Ma LinVB 9:22  Yudas asalaki naino makambo masusu mingi, abundaki bitumba mpe alongaki banguna. Azalaki na ntina isusu mingi ya kozwa lokumu. Kasi bakomi yango o monkanda te, zambi ileki mingi.
I Ma LinVB 9:23  Nsima ya liwa lya Yudas, bato baye baboyi Mobeko mpe bato babe bamilakisi lisusu o Israel mobimba.
I Ma LinVB 9:24  Mpo ya nzala enene o mikolo mina, bato baike bandimi bango.
I Ma LinVB 9:26  Bango bakei kobimela baninga ba Yudas mpe kotuna bango mituna, mpe bakambi bango epai ya Bakides ; oyo apesi bango etumbu mpe ayokisi bango nsoni.
I Ma LinVB 9:27  Banda eleko ya profeta wa nsuka, mokolo moko te bato ba Israel banyokwamaki motindo mona.
I Ma LinVB 9:28  Yango wana baninga banso ba Yudas basangani, balobi na Yonatan :
I Ma LinVB 9:29  « Ut’o mokolo ndeko wa yo Yudas awei, tozwi moto moko te akokani na ye mpo ya kobunda na banguna ba biso, na Bakides to na baye bayini ekolo ya biso.
I Ma LinVB 9:30  Yango wana lelo toponi yo okitana ye, ozala mokonzi mpe moyangeli wa biso o etumba ; yo moto okokamba biso. »
I Ma LinVB 9:31  Banda mokolo mona Yonatan akomi moyangeli mpe mokitani wa ndeko wa ye Yudas.
I Ma LinVB 9:33  Ntango Yonatan ayoki yango, akimi tee o eliki ya Tekowe, elongo na ndeko wa ye Simoni mpe na bato banso bazalaki na ye. Apiki nganda pene na etima Asfar.
I Ma LinVB 9:34  Bakides ayoki yango o mokolo mwa Sabato, mpe akatisi Yordane na basoda ba ye banso.
I Ma LinVB 9:35  Yonatan atindi ndeko wa ye Yoane, oyo azalaki kotala makambo ma biloko, akende kotuna ba-Nabat balingisa ye ’te abomba biloko epai ya bango, mpo biloko bizalaki mingi.
I Ma LinVB 9:36  Kasi bato ba Amrai na Medaba bakangi Yoane, babotoli ye biloko bi­nso mpe bakei na byango.
I Ma LinVB 9:37  Mwa moke na nsima bayebisi Yonatan na ndeko wa ye Simoni ’te bato ba Amrai bazalaki na eyenga ya libala. Bakei na bato ebele koyamba mwasi o Nabata mpo ’te baya na ye ; mwasi azalaki mwana wa nkumu monene wa Kanana.
I Ma LinVB 9:38  Yonatan na Simon babosani te ’te babomaki ndeko wa bango Yoane. Bakei kobombama o ngomba.
I Ma LinVB 9:39  Mosika te, bamoni bato ebele bazalaki koya na makeléle mingi. O liboso bamoni mobali ná baninga ná ba­ndeko ba ye. Bazalaki na mbonda mpe na miziki ; bazalaki kolata kitoko.
I Ma LinVB 9:40  Ba-Yuda bapimbwi ut’o esika babombamaki, bakweli bango o nzoto mpe babomi baike ba bango, basusu bakimi o ngomba. Ba-Yuda babotoli bango biloko binso.
I Ma LinVB 9:41  Eyenga ya libala ebongwani lilaka linene, mpe nzembo ya esengo ebongwani nze­mbo ya mawa.
I Ma LinVB 9:42  Awa bazongiseli bango mabe basalaki ndeko wa ba­ngo, bazongi o libongo lya potopoto lya Yordane.
I Ma LinVB 9:43  Bakides ayoki nsango ya maka­mbo mana. Mokolo moko mwa Sabato, akei na basoda ebele o libongo lya Yordane.
I Ma LinVB 9:44  Yonatan alobi na bato ba ye : « Tokende, tobunda mpo tobikisa bomoi bwa biso. Lelo etumba ekozala makasi leka bitumba bya liboso !
I Ma LinVB 9:45  Boyeba ’te banguna bazali o liboso mpe o nsima ya biso. Awa ezali mai ma Yordane, kuna ezali potopoto ; nzela ya kozonga nsima ezali te.
I Ma LinVB 9:46  Bongo sikawa bobelela Nzambe makasi mpo ’te bobika o maboko ma banguna. »
I Ma LinVB 9:47  Babandi etumba ; Yonatan akomi pene na Bakides, asilaki kotombola loboko mpo ’te azokisa ye, kasi ye amibendi nsima mpe abiki.
I Ma LinVB 9:48  Yonatan na baninga ba ye bamibwaki o Yordane, mpe bakatisi mai tee bakomi o ngambo. Banguna bakatisi mai te, balandi bango te.
I Ma LinVB 9:49  Mo­kolo mona Bakides abungisi bato soki nkoto yoko.
I Ma LinVB 9:50  Ezongi Bakides o Yeruzalem, abandi kolendisa bibombamelo o Yudea : o Yeriko, Emaus, Betoron, Betel, Tamnata, Faraton na Tefon azingi ebo­mbamelo yoko yoko na lopango lonene, mpe abakisi bibende na bikangeli o bizibeli bya lopango.
I Ma LinVB 9:51  O bisika binso atiki basoda bakoka bato ba Israel.
I Ma LinVB 9:52  Alendisi mpe bingumba Betsur na Gazara mpe ebombamelo ya Yeruzalem. Kuna atiki basoda na biloko bya kolia.
I Ma LinVB 9:53  Akangi bana ba bankumu bo ndanga mpe atii bango o ebombamelo ya Yeruzalem ; atii mpe basoda bakengele bango.
I Ma LinVB 9:54  Ebandi mobu mwa monkama na ntuku itano na misato, o sanza ya ibale, Alkime atindi ’te balongola efelo eye ekaboli lopango la Tempelo na biteni bibale. Alingi kobebisa bongo mosala mwa baprofeta. Ntango ba­ba­ndi kobuka efelo,
I Ma LinVB 9:55  bokono boka­ngi Alkime ye na mbalakaka, asengeli ko­tika mosala mpe akoki koloba lisusu te, mpo monoko motikali koka­ngema ; ayebi mpe kopesa bitinda lisusu te.
I Ma LinVB 9:57  Ntango Bakides amoni ’te Alkime akufi Alkime, azongi epai ya mokonzi, bongo mibu mibale ekolo ya Yuda ezalaki nye.
I Ma LinVB 9:58  Bato baye baboya Mobeko basa-ngani likita, balobi : « Yonatan na bato ba ye bazwi kimia, bazali kokanisa likama lyoko te. Soko tobengi Bakides sikawa, akoki kokanga bango banso o butu se boko. »
I Ma LinVB 9:59  Bakei epai ya ye mpo ya koyebisa ye likambo lyango.
I Ma LinVB 9:60  Bakides akei na basoda ebele, mpe na bonkutu atindeli bato ba ye o Yudea monkanda mpo ya kosenge ba­ngo ’te bakanga Yonatan na baninga ba ye. Kasi balongi te, mpo likambo lyango likomi koyebana.
I Ma LinVB 9:61  Yonatan akangisi bato soki ntuku itano o kati ya bana ba ekolo mpenza, baye bakanaki kosala mabe mana ; abomisi ba­ngo.
I Ma LinVB 9:62  Yonatan na Simoni na bato ba ba­ngo bakei o eliki ya Betbasi. Batongi eteni ya engumba eye ekomaki mopotu, mpe balendisi yango.
I Ma LinVB 9:63  Ntango Bakides ayoki yango, asangisi basoda ba ye ; abengi mpe bato ba Yudea baya kobunda.
I Ma LinVB 9:64  Apiki nganda pene na Betbasi, mpe aumeli kuna mikolo mingi mpo ya kotonga bibuneli binene.
I Ma LinVB 9:65  Yonatan atiki ndeko wa ye Simoni o engumba, ye moko akei na ndambo ya bato o esobe.
I Ma LinVB 9:66  Alongi Odomera na bandeko ba ye, abebisi nganda ya bato ba Fasiron. Yango wana bato mingi bandimi kokoma ba­soda ba ye.
I Ma LinVB 9:67  O ntango ena Simon na basoda ba ye babimi o engumba mpe batumbi bibuneli bya banguna.
I Ma LinVB 9:68  Babundisi Bakides mpe bakweisi ye. Yango eyokisi Bakides mawa manene, mpo etumba ekanaki ye, esuki mabe.
I Ma LinVB 9:69  Azalaki na nkanda mpenza na bato babe baye babondelaki ye ’te aya kobunela bango ; abomi baike ba bango. Na nsima akani kozonga na bato ba ye o mboka ya ye.
I Ma LinVB 9:70  Ntango Yonatan ayoki yango, atindeli ye ba­ntoma bayokana na ye mpo bazwa boboto, andima mpe kotika bato baye akangaki.
I Ma LinVB 9:71  Bakides andimi mpe asali yango. Alayeli ye mpe ndai ’te bomoi bwa ye mobimba akosala ye mabe lisusu te.
I Ma LinVB 9:72  Atiki basoda baye akangaki o ekolo ya Yuda, mpe azo­ngi o mboka ya ye ; mokolo moko te ayei lisusu o mokili mwa ba-Yuda.
I Ma LinVB 9:73  O ntango ena bitumba bisili o Israel. Yonatan akei kofanda o Makmas. Akomi kotala makambo ma bato ba ye. Asali ’te baye baboya Nzambe ba­sila o Israel.
Chapter 10
I Ma LinVB 10:1  O mobu mwa monkama na ntuku motoba Alesandro Epifane, mwana wa Antioko, akei kobundisa Tolemais mpe abotoli yango. Bato ba engumba ena bandimi ye bo mokonzi.
I Ma LinVB 10:2  Ntango mokonzi Demetrio ayoki yango, asangisi basoda ebele mpo ya kobundisa ye.
I Ma LinVB 10:3  Atindeli Yonatan monkanda na maloba ma boboto mpo ya kotombela ye bokonzi bwa lokumu.
I Ma LinVB 10:4  Amilobeli ’te : « Naluka kokata bondeko na ba­ngo noki, bongo bandima bondeko na Alesandro te mpe bakoma banguna ba biso te.
I Ma LinVB 10:5  Soki bongo te, bakokanisa lisusu mabe manso tosalaki ye, bandeko mpe ekolo ya ye. »
I Ma LinVB 10:6  Apesi Yonatan ndingisa ya kobenga basoda, ya kosala bibuneli mpo ’te bazala mo­tema moko o bitumba. Atindi ’te babimisela Yonatan bato baye baka­ngemi o ebombamelo ya Yeruzalem.
I Ma LinVB 10:7  Yonatan akei o Yeruzalem, ata­ngeli bato banso na bato ba ebombamelo monkanda mona.
I Ma LinVB 10:8  Awa bayoki ’te mokonzi alingisi ’te azwa basoda, babangi mingi.
I Ma LinVB 10:9  Babimisi bato ba ye o boloko. Yonatan azongisi bango o mboka ya bango.
I Ma LinVB 10:10  Yonatan akei kofanda o Yeruzalem, abandi kotonga mpe kobongisa engumba lisusu.
I Ma LinVB 10:11  Ati­ndi bakapita ba mosala ’te batonga liboso lopango lonene mpe bazinga ngomba Sion na efelo ya mabanga mpo ’te bakoka kokengele engumba malamu. Basali mpe bongo.
I Ma LinVB 10:12  Basoda bauta bazalaki kolala o bibombamelo biye Bakides atongisaki, bakimi.
I Ma LinVB 10:13  Banso batiki mosala mwa soda, bazongi o ekolo ya bango.
I Ma LinVB 10:14  Etikali bobele ndambo ya ba-Yuda o Betsur, baye babwaki Mobeko mpe mimeseno mya mboka, mpo bazalaki kobo­mbama wana.
I Ma LinVB 10:15  Mokonzi Alesandro ayoki maye Demetrio alakelaki Yonatan. Bayebisi ye mpe boniboni Yonatan abu-ndaki bitumba mpe makambo manene asalaki elongo na bandeko ba ye, na mpe mpasi inso bayokaki.
I Ma LinVB 10:16  Alobi : « Nakokende kozwa elombe mosusu lokola ye epai wapi ? Malamu naluka boyokani na ye mpe akoma moninga wa ngai. »
I Ma LinVB 10:18  « Ndeko wa ngai Yonatan, yamba losako la ngai, moko­nzi Alesandro.
I Ma LinVB 10:19  Biso awa toyoki ’te okomi moto monene mpenza ; ebo­ngi toyokana na yo.
I Ma LinVB 10:20  Yango wana nakolubola yo lelo nganga mokonzi wa ekolo ya yo, mpe nakopesa yo nko­mbo ya lokumu ‘Molingami wa mokonzi’. Atindeli ye elamba ya lo­ngondo mpe enkoti ya wolo. ‘Bongo okozala moto wa ngai mpe okolakisa ngai bondeko. »
I Ma LinVB 10:21  Yonatan alati bilamba bya mosala mwa nganga Nzambe o mobu mwa monkama na ntuku motoba, o sanza ya nsambo, o eyenga ya Milako. Abengi bato baike o mosala mwa soda, mpe asali bibuneli biike mpenza.
I Ma LinVB 10:22  Ntango Demetrio ayoki yango, ayoki mawa, alobi :
I Ma LinVB 10:23  « Ekomi nde boye ? Ndenge nini Alesandro azwi bondeko na ba-Yuda liboso lya biso mpo ’te aleka biso na bokasi ?
I Ma LinVB 10:24  Ngai mpe nakokomela bango monkanda na maloba ma kondimisa bango ; nakokabela bango bisika bya lokumu mpe bya nkita, mpo ’te basalisa ngai. »
I Ma LinVB 10:25  Bongo akomeli bango boye : « Ngai mokonzi Demetrio, losako na bino, ekolo ya ba-Yuda !
I Ma LinVB 10:26  Botosi mibeko minso miye toyokanaki mpe bomemyi bondeko na biso. Bondimi koyokana na monguna te. Nayoki yango mpe nasepeli na yango mingi.
I Ma LinVB 10:27  Bolanda bobele nzela ena mpo toyokana malamu. Nakobosana te kozongisela bino malamu manso bosali ngai.
I Ma LinVB 10:28  Nakolimbisa bino mpako ya biloko mingi, mpe nakokabela bino makabo masusu.
I Ma LinVB 10:29  Banda lelo nandimi ’te ba-Yuda bafuta lisusu mpako ya mongwa te, batindela ngai ‘mosolo mwa bokonzi’ mpe te.
I Ma LinVB 10:30  Eteni ya bisato ya milona mpe ya mbuma ya nzete, eye bokofutaka ngai, banda lelo nakosenge yango lisusu te o mokili mwa Yuda mpe o biteni bya Samaria-Galilea biye bikomi bya Yuda.
I Ma LinVB 10:31  Yeruzalem ezala engumba esantu, efuta lisusu mpako te. Bato ba mokili mobimba mwa Yeruzalem bafuta mpako ya bilanga te.
I Ma LinVB 10:32  Ebombamelo ya Yeruzalem ezali ya ngai lisusu te, natiki yango o maboko ma nganga moko­nzi ; ye moko apono bato baye alingi bakengele yango.
I Ma LinVB 10:33  Mo-Yuda oyo aka­ngemi o boombo o ekolo esusu, ezala ata ekolo nini o mokili mwa ngai, nakopesa ye bonsomi, mpe nakosenge eloko yoko te. Mo-Yuda moko afuta mpako lisusu te, ata ya bibwele bya ye.
I Ma LinVB 10:34  Nalingi ’te ba-Yuda banso o bokonzi bwa ngai bafuta mpako te o mikolo mya Sabato mpe mya sanza ya sika, o biyenga bitindami na Mobeko, mpe o mikolo misato liboso mpe nsima ya biyenga.
I Ma LinVB 10:35  O mikolo mina moto moko te akoki kokangisa to kotungisa bango, ata na likambo nini.
I Ma LinVB 10:36  Ba-Yuda soki ntuku isato bakoki kokoma basoda ba mokonzi ; bakofutama se lokola basoda basusu ba mokonzi.
I Ma LinVB 10:37  Nakotia basusu o bingumba bizali na bibombamelo binene, mpe nakobenga basusu baya kosala penepene na ngai. Mpo ya boyangeli mpe bokambi ekolo, nakopono se bato o kati ya bango ; bakotosa mibeko mya ekolo ya bango, lokola mokonzi atindi o mokili mwa Yuda mobimba.
I Ma LinVB 10:38  Bikolo bisato biye bobakisi na mokili mwa Yudea, biye bolongoli o Samaria, bizala bya mokili mwa Yudea. Bana mboka batosa se nganga mokonzi, moto mosusu te.
I Ma LinVB 10:39  Engumba Tolemais na mabelé ma yango, nakopesa yango na Tempelo ya Yeruzalem, mpo bazwa mosolo mwa kosomba biloko biye bisengeli na milulu mya losambo.
I Ma LinVB 10:40  Ngai moko nakopesa mobu na mobu mitako nkoto zomi na mitano mya palata. Nakokamata myango o mpako ya bingumba biye bikoki kofuta mokonzi.
I Ma LinVB 10:41  Mosolo moye mosengeli na misala o Tempelo, moye bazalaki kofuta liboso, kasi mofutamaki o mibu mileki lisusu na bafutisi mpako te, mokofutama lisusu banda sikawa.
I Ma LinVB 10:42  Mitako nkoto itano mya palata leta azalaki kosenge ya mosolo mwa Tempelo, nakosenge myango lisusu te. Banganga Nzambe bakosalaka mo­sala o Tempelo, bakozwa mya­ngo.
I Ma LinVB 10:43  Moto nyonso akimi o lopanga to o mabelé ma Tempelo ya Yeruzalem, mpo azali na nyongo ya moko­nzi to na ntina esusu, bakosambisa ye lisusu te mpo ya ye moko to mpo ya biloko bya ye binso o mokili mwa ngai.
I Ma LinVB 10:44  Mpo ya botongi mpe bobo­ngisi Tempelo, bokoki kolongola mosolo o mpako ya leta.
I Ma LinVB 10:45  Se bongo na mosolo mosengeli na botongi lisusu bifelo bya Yeruzalem, bolendisi lopango la yango, mpe bobongisi mapango ma bingumba bya Yudea. »
I Ma LinVB 10:46  Ntango Yonatan na bato banso bayoki maloba mana, bandimi ma­ngo te lokola maloba ma solo, bongo balandi mango te. Mpamba te, bakanisi lisusu mabe manso Demetrio asa­laki ba-Israel, na mpe minyoko minso azalaki koyokisa bango.
I Ma LinVB 10:47  Balingi kondima Alesandro, mpo bamoni ’te ye alingi boboto solo, bongo batikala se na bondeko.
I Ma LinVB 10:48  Alesandro asangisi basoda baike mpe akei kobu­nda na Demetrio.
I Ma LinVB 10:49  Bakonzi babale bakutani, kasi basoda ba Alesandro bakimi. Demetrio alandi bango mpe aleki bango na bokasi.
I Ma LinVB 10:50  Etumba eumeli tee butu. Kasi bobele o mokolo mona Demetrio akufi.
I Ma LinVB 10:51  Alesandro atindeli Tolemeo, mokonzi wa Ezipeti, bantoma baloba na ye :
I Ma LinVB 10:52  « Nazongi o ekolo ya ngai, mpe nafandi o ngwende ya bankoko ba ngai ; nakweisi Demetrio mpe nazwi bokonzi, nakomi koyangela mokili mwa ngai.
I Ma LinVB 10:53  Ya solo, nabundisi ye mpe tonyati ye na basoda ba ye. Awa nafandi o ngwende ya ye,
I Ma LinVB 10:54  ebongi biso na yo tokata bondeko sikawa. Bongo obalisa ngai mwana wa yo, nakoma bokilo wa yo. Nakopesa yo, lokola nakopesa mpe ye, mabonza mabongi na moto lokola yo. »
I Ma LinVB 10:55  Mokonzi Tolemeo azongiseli ye maloba maye : « Esengo na yo o mokolo ozo­ngi o ekolo ya bankoko ba yo mpe okei kofanda o ngwende ya bokonzi !
I Ma LinVB 10:56  Nandimi makambo manso okomi, kasi oya kokutana na ngai o Tolemais, tomonono. Na nsima nakokoma bokilo wa yo lokola olobi. »
I Ma LinVB 10:57  Tolemeo alongwi o Ezipeti, ye na mwana mwasi wa ye Kleopatra, bayei o Tolemais o mobu mwa monkama na ntuku motoba na mibale.
I Ma LinVB 10:58  Mokonzi Alesandro akei kokutana na Tolemeo. Tolemeo abalisi ye mwana wa ye Kleopatra. Basepeli libala lya bango o Tolemais na lipombo, lokola ebongi na bakonzi.
I Ma LinVB 10:59  Mokonzi Alesandro atindeli Yonatan monka­nda mpo ’te aya kotala ye.
I Ma LinVB 10:60  Bongo Yonatan akei o Tolemais na lokumu lonene, mpe akutani na bakonzi babale. Apesi bango palata na wolo ; abonzeli mpe baninga ba bango mabonza kitoko. Bango bakomi kolinga ye.
I Ma LinVB 10:61  O ntango ena bifaka bya bato, ba-Israel baye baboyi mibeko minso, bayokani mpe bakei kofunda Yonatan, kasi mokonzi andimeli bango te.
I Ma LinVB 10:62  Kutu atindi ’te balongola Yonatan molato mwa ye mpe balatisa ye ela­mba ya longondo ; esalemi se bongo.
I Ma LinVB 10:63  Mokonzi afandisi ye penepene na ye mpe alobi na bankumu : « Bokatisa na ye engumba mpe bosakola polele ’te moto moko afunda ye te, ata na likambo nini ; batungisa ye mpe te, ata ntina nini. »
I Ma LinVB 10:64  Ntango baye bafundaki ye bamoni ndenge balatisi ye elamba ya longondo, mpe ntango bayoki maloba ma mosakoli wa mokonzi, banso bakimi.
I Ma LinVB 10:65  Mokonzi akobi naino kokumisa ye : akomi nkombo ya ye o molongo mwa ‘balingami ba ye’. Aluboli ye moyangeli wa basoda mpe wa engumba.
I Ma LinVB 10:66  Na nsima Yonatan azongi o Yeruzalem na esengo enene mpe na boboto.
I Ma LinVB 10:67  O mobu mwa monkama na ntuku motoba na mitano Demetrio, mwana wa Demetrio, alongwi o Kreta, akei o mokili mwa bankoko ba ye.
I Ma LinVB 10:68  Ntango mokonzi Alesandro ayoki yango, asiliki mpe azongi o Antiokia.
I Ma LinVB 10:69  Demetrio akomisi Apolonio moyangeli wa mokili mwa Sele-Siria. Apolonio asangisi basoda ebele mpe akei na bango kopika nganda o Yamnia. Atindeli nganga mokonzi Yonatan maloba maye :
I Ma LinVB 10:70  « Bobele yo moko ozali kotombokela ngai. Bato bakomi koseke ngai se mpo ya yo. Mpo nini olakisi makasi ma yo o mokili mwa ngomba ?
I Ma LinVB 10:71  Soko okanisi ’te okoki kotia motema na basoda ba yo, tika ngomba mpe yaka o esobe, bo­ngo tomekana. Ngai nayei na basoda ba bingumba.
I Ma LinVB 10:72  Tuna malamu soko ngai nazali nani, mpe banani bakosalisa ngai. Bakoyebisa yo ’te okokoka biso te, mpo basili kokweisa bankoko ba yo mbala ibale.
I Ma LinVB 10:73  Ya solo, boniboni okolonga moto o esobe, oyo ayei na farasa mpe na basoda ebele ? Ngomba izali te, mabanga te, esika ya kokima mpe te. »
I Ma LinVB 10:74  Yonatan ayoki mabe mpo ya maloba ma Apolonio. Aponi bato nkoto zomi mpe atiki Yeruzalem. Ndeko wa ye Simoni ayei na bato basusu kosa­lisa ye.
I Ma LinVB 10:75  Apiki nganda pene na Yope. Bato ba Yope basili bakangi bizibeli bya mboka, mpo basoda ba Apolonio bazalaki wana. Etumba eba­ndi.
I Ma LinVB 10:76  Bato ba Yope babangi, bafungoli bizibeli, mpe Yonatan abotoli engumba.
I Ma LinVB 10:77  Apolonio ayoki yango. Abongisi basoda ba farasa nkoto isato mpo ya etumba, na basoda ba makolo ebele. Akosi ’te akokende epai ya Azoto, kasi se o ntango ena akatisi epai ya esobe, mpo atii motema na bato ebele ba ye ba farasa.
I Ma LinVB 10:78  Yonatan alandi ye epai ya Azoto, tee basoda ba bango babale babandi etumba.
I Ma LinVB 10:79  Apolonio atikaki bato ba farasa nkoto yoko baye babombami nsima ya ye.
I Ma LinVB 10:80  Yonatan akomi koyeba ’te batieli ye motambo o nsima. Bato ba farasa bazingi basoda ba ye, babeti bango makula banda ntongo tee butu.
I Ma LinVB 10:81  Kasi basoda bakimi te, batosi motindo Yonatan apesaki. Nzokande farasa ya banguna ibandi kolembe.
I Ma LinVB 10:82  Awa bato ba farasa balembi mpe batiki kobunda, Simon akei na bato ba ye kobundisa basoda ba makolo. Banguna bakwei mpe bakimi.
I Ma LinVB 10:83  Bato ba farasa bapalangani o esobe. Baye bakomi o Azoto, bayingeli o tempelo ya nzambe wa bango Bet-Dagon mpo bazwa libiki.
I Ma LinVB 10:84  Kasi Yonatan atu­mbi Azoto mpe mboka inso ya penepene ; abotoli biloko bitikalaki wana, atumbi tempelo ya Dagon na móto. Bato banso bakendeki kobo­mbama wana baziki.
I Ma LinVB 10:85  Baye bakufi na mopanga na baye baziki na móto lisanga, bazalaki soki nkoto mwambe.
I Ma LinVB 10:86  Yonatan alongwi kuna mpe apiki nganda pene na Askalon. Bato ba engu­mba ena bakei kokutana na ye mpe bayambi ye na lokumu lonene.
I Ma LinVB 10:87  Na nsima azongi lisusu o Yeruzalem na bato ba ye mpe na biloko mingi babotoli.
I Ma LinVB 10:88  Mokonzi Alesandro ayoki yango, akumisi Yonatan mingi.
I Ma LinVB 10:89  Atindeli ye lifungu lya wolo, eye bakopesaka bobele na bandeko ba mokonzi. Akabeli ye engumba Akaron na mabelé ma yango manso.
Chapter 11
I Ma LinVB 11:1  Mokonzi wa Ezipeti asangisi basoda, bakomi ebele lokola zelo o libongo lya mbu, abongisi mpe masuwa ebele mpo abotolo ekolo ya Alesandro na mayele. Alingi kobakisa yango o ekolo ya ye.
I Ma LinVB 11:2  Ayei o Siria na maloba ma boboto. Bato banso bafungoli bizibeli bya mboka ya bango mpe bakei koyamba ye, mpo mokonzi Alesandro atindaki ’te bayamba bokilo wa ye malamu.
I Ma LinVB 11:3  O mboka yoko yoko akoti, Tolemeo atii basoda bakengele mboka.
I Ma LinVB 11:4  Ekomi ye pene na Azoto, balakisi ye te­mpelo ya Dagon eye ezikaki. Amoni Azoto na mokili mwa Azoto mobebi nye. Bipai binso amoni mpe bibembe bilali, na mpe minkuwa mya bato miye Yonatan azikisaki o etumba ; batiaki byango mabondo mabondo o nzela eye mokonzi alekaki.
I Ma LinVB 11:5  Bayebisi mo­konzi maye Yonatan asalaki mpo ’te aboya ye. Kasi mokonzi alobi eloko te.
I Ma LinVB 11:6  Yonatan akei kokutana na ye o Yope ; alati bilamba bya lokumu. Bayambani na losako mpe na butu balali se wana.
I Ma LinVB 11:7  Yonatan akei kotika mokonzi tee ebale Eletero ; na nsima azongi o Yeruzalem.
I Ma LinVB 11:8  Tolemeo abotoli bingumba binso penepene na mbu tee Selesia. Akani kosala Alesandro mabe.
I Ma LinVB 11:9  Atindeli mokonzi Demetrio bantoma bayebisa ye : « Yaka, tokata bondeko. Nakopesa yo mwana mwasi wa ngai, oyo Alesandro abalaki, bongo okozala mokonzi wa ekolo ya tata wa yo.
I Ma LinVB 11:10  Namoni ’te nasali mabe awa nabalisi Alesandro mwana wa ngai ; mpamba te, alukaki koboma ngai. »
I Ma LinVB 11:11  Afundi ye bongo mpo azalaki kolula mokili mwa ye.
I Ma LinVB 11:12  Abotoli ye mwana wa ye, oyo apesi Demetrio. Aboyi Alesandro, mpe emononi polele ’te bakomi banguna.
I Ma LinVB 11:13  Ekomi ye o Antiokia, Tolemeo ami­latisi enkoti ya bokonzi bwa Azia. Bongo akomi na binkoti bya boko­nzi bibale : eye ya Ezipeti na eye ya Azia.
I Ma LinVB 11:14  O ntango ena mokonzi Alesandro azalaki o mokili mwa Silisia, zambi kuna bato batomboki.
I Ma LinVB 11:15  Awa ayoki makambo mana manso, akani kobu­nda na Tolemeo. Tolemeo mpe aba­ndi kokende na basoda ebele mpo akutana na ye, akimisi ye.
I Ma LinVB 11:16  Alesa­ndro akimi o mokili mwa Arabu, amibikisa kuna. Bongo mokonzi Tolemeo alongi.
I Ma LinVB 11:17  Mo-Arabu Zabdiel akati Alesandro nkingo mpe atindeli Tolemeo motó mwa ye.
I Ma LinVB 11:18  Nsima ya mikolo mibale mokonzi Tolemeo mpe akufi. Bato ba mboka babomi basoda ba Ezipeti banso, baye mokonzi atiaki o bibombamelo.
I Ma LinVB 11:19  Demetrio akomi mokonzi o mobu mwa monkama na ntuku motoba na nsa­mbo.
I Ma LinVB 11:20  O mikolo mina Yonatan asangisi bato ba Yudea mpo ya kobotolo ebombamelo ya Yeruzalem. Na ntina ena atongi bibuneli ndenge na nde­nge.
I Ma LinVB 11:21  Bato basusu, baye bayini ekolo ya bango mpe baboyi mibeko, bakei koyebisa mokonzi ’te Yonatan azalaki kobundisa ebombamelo ya Yeruzalem.
I Ma LinVB 11:22  Ntango mokonzi ayoki yango, ayoki nkanda. Noki mpenza akei o Tolemais. Atindeli Yonatan mo­nkanda mpo atika kobunda, mpe aya kokutana mpe kosolola na ye noki o Tolemais.
I Ma LinVB 11:23  Ezwi Yonatan mo­nkanda mona, atindi ’te bakoba etu­mba. Aponi bankumu basusu ba Israel na banganga Nzambe mpo ’te bakende na ye. Abangi likama te.
I Ma LinVB 11:24  Akamati palata, wolo, bilamba bya motuya na mabonza masusu ebele, mpe akei kokutana na mokonzi o mboka Tolemais. Mokonzi ayambi ye malamu.
I Ma LinVB 11:25  Ata bato basusu, baye baboyi mibeko, bafundi ye epai ya mokonzi,
I Ma LinVB 11:26  mokonzi asali ye malamu, lokola bankoko ba ye basalaki. Akumisi Yonatan o miso ma baninga ba ye banso.
I Ma LinVB 11:27  Andimi ’te bakomisi ye nganga mokonzi, andimi mpe nkombo inso ya lokumu bapesaki ye liboso, atii ye o molongo mwa ‘bali­ngami ba mokonzi’.
I Ma LinVB 11:28  Yonatan asengi mokonzi ’te afutisa bato ba Yudea mpe ba biteni bisato bya Samaria mpako lisusu te. Soko andimi, ye moko Yonatan akofuta talenta nkama isato.
I Ma LinVB 11:29  Mokonzi andimi, atindeli Yonatan monkanda na maloba maye :
I Ma LinVB 11:30  « Ngai mokonzi Demetrio. Ya­mba losako napesi yo, ndeko wa ngai Yonatan, na mpe ekolo mobimba ya ba-Yuda.
I Ma LinVB 11:31  Natindeli yo maloba ma mo­nkanda nakomelaki Lasteno, ndeko wa ngai, mpo ’te oyeba maye nakomi mpo ya yo :
I Ma LinVB 11:32  Yamba losako la ngai mokonzi Demetrio ona yo tata wa ngai Lasteno.
I Ma LinVB 11:33  Tolingi kosala ekolo ya ba-Yuda malamu, mpo balingi biso mpe bo baninga ba solo balakisi biso bosembo. Yango wana tolingi kosala bango malamu.
I Ma LinVB 11:34  Tondimi ’te bayangela Yudea mpe biteni bisato bya ekolo, Aferema, Lida na Ramataim, biye tokaboli na Samaria mpe tosangisi na Yudea. Baye banso bakobonzaka o Yeruzalem bafuta mpako ya milona mpe ya nzete lisusu te, eye bazalaki kofuta mokonzi mobu na mobu.
I Ma LinVB 11:35  Biteni bya zomi ya biloko binso, mpako ya mongwa na mosolo mwa bokonzi nazalaki kofutisa ba­ngo, banda lelo nakosenge yango lisusu te.
I Ma LinVB 11:36  Bakobongola matomba maye ata mokolo moko lisusu te.
I Ma LinVB 11:37  Obosana te kotindela Yonatan mo­nkanda moko na maloba maye, mpe otia mwango o esika polele o ngo­mba esantu. »
I Ma LinVB 11:38  Mokonzi Demetrio amoni ’te mokili mobimba mokomi nye, moto moko akobundisa ye lisusu te ; bongo azongisi basoda ba ye banso o mboka, longola se baye akamataki o bisanga bya bampaya. Yango wana basoda baye babandaki mosala o ntango ya tata wa ye mpe ya nkoko wa ye, bakomi koyina ye.
I Ma LinVB 11:39  Trifo, oyo abunelaki Alesandro, amoni ’te basoda bakomi kosilikela Demetrio. Akei epai ya Yamliku, mo-Arabu oyo azala­ki kobokolo Antioko moke, mwana wa Alesandro.
I Ma LinVB 11:40  Abondeli ye mi­ngi ’te apesa ye mwana mpo ’te akoma mokonzi o esika ya tata wa ye. Asololi ye makambo manso Demetrio asalaki, mpe ndenge basoda bakomi koyina ye. Atikali wana mikolo miike.
I Ma LinVB 11:41  O ntango ena Yonatan atindeli Demetrio moto moko asenge ye ’te abimisa basoda banso o ebo­mbamelo ya Yeruzalem mpe o bibombamelo bisusu, mpo bazalaki kotungisa ba-Israel.
I Ma LinVB 11:42  Demetrio ati­ndeli Yonatan eyano eye : « Nalingi bobele kosala bongo mpo ya yo mpe mpo ya ekolo ya yo te, nakopesa yo mpe ekolo ya yo mpe lokumu lonene o mokolo nakozwa nzela ya kosala yango.
I Ma LinVB 11:43  Sikawa osengeli kotindela ngai basoda basalisa ngai, mpo basoda ba ngai banso bakimi ngai. »
I Ma LinVB 11:44  Yonatan atindeli ye basoda ba mpiko nkoto isato. Ekomi bango o Antiokia, mokonzi asepeli mingi.
I Ma LinVB 11:45  Bato ba mboka batomboki : bato soki nkoto monkama na ntuku ibale basangani o kati ya mboka mpo ’te baboma mokonzi.
I Ma LinVB 11:46  Mokonzi amibombi o ndako ya ye ; bana mboka batondi o balabala mpe babandi kobunda.
I Ma LinVB 11:47  Mokonzi abengi ba-Yuda baya kosalisa ye ; banso basangani penepene na ye. Na nsima bapalangani o mboka mobi­mba, mpe babomi bato soki nkoto monkama se o mokolo mona.
I Ma LinVB 11:48  Batumbi mboka mpe babotoli biloko ebele mokolo mona : babikisi moko­nzi bongo.
I Ma LinVB 11:49  Awa bato bamoni ’te ba-Yuda bakomi kokonza mboka, ba­bwaki elikya mpe bakei kobondela mokonzi :
I Ma LinVB 11:50  « Salisa biso mpo ’te ba-Yuda batika kobundisa biso mpe mboka ya biso. »
I Ma LinVB 11:51  Babwaki bibuneli mpe bayokani na ye. Ba-Yuda bazwi bongo lokumu o miso ma mokonzi mpe ma bato banso ba ekolo ya ye. Awa nkombo ya bango etamboli o bikolo bina, bazongi o Yeruzalem na biloko ebele babotoli.
I Ma LinVB 11:52  Mokonzi Demetrio alendisi lisusu bokonzi, mpe ekolo ya ye ekomi nye.
I Ma LinVB 11:53  Kasi maye manso alakelaki ba-Yuda, akokisi mango te. Kutu, akomi monguna wa Yonatan : abosani malamu manso Yonatan asalaki ye, mpe atungisi ye mingi.
I Ma LinVB 11:54  Nsima ya makambo mana, Trifo ayei elongo na Antioko, oyo azalaki naino mwana. Aluboli ye mokonzi mpe alatisi ye enkoti ya bokonzi.
I Ma LinVB 11:55  Basoda banso baye Demetrio azongisaki o mboka bandimi ye mpe babandi kobundisa Demetrio. Balongi ye mpe bakimisi ye.
I Ma LinVB 11:56  Trifo akamati nzoku ya Demetrio mpe abotoli Antiokia.
I Ma LinVB 11:57  Antioko moke atindeli Yonatan maloba maye : « Nandimi ’te okoba mosala mwa nganga mokonzi. Naluboli yo mokonzi wa biteni bya ekolo binei bya Samaria. Nalingi ozala moko wa ‘balingami ba mokonzi’. »
I Ma LinVB 11:58  Atindeli ye mbeki ya wolo mpe biloko bya meza. Alingisi ye ’te amele o kopo ya wolo mpe alata elamba ya longondo mpe lifungu lya wolo.
I Ma LinVB 11:59  Atii Simoni, ndeko wa Yonatan, komanda monene wa basoda o ngomba ya Tiro tee ndelo ya Ezipeti.
I Ma LinVB 11:60  Yonatan akei kokatisa ekolo mpe mboka inso o Westi ya Efrate. Basoda banso ba Siria balandi ye mpo ’te babunda elongo na ye. Ekomi ye o Askalon, bato ba mboka bayambi ye na li­pombo.
I Ma LinVB 11:61  Alongwi wana mpe akei o Gaza. Kasi bato ba Gaza bakangi bizibeli bya mboka. Yango wana Yonatan azingi mboka, atumbi bituka bya penepene mpe ayibi biloko binso.
I Ma LinVB 11:62  Bato ba Gaza bakomi kobondela ye ’te akata na bango bondeko. Yonatan andimeli bango ; nzokande akei na bana ba bankumu ba mboka bo nda­nga o Yeruzalem. Na nsima akatisi ekolo ena tee Damasko.
I Ma LinVB 11:63  Yonatan ayoki ’te bakomanda ba Demetrio basemi o Kedes ya Galilea na basoda ebele mpo ya kopekisa ye kosala bongo.
I Ma LinVB 11:64  Yonatan akei kokutana na bango, kasi atiki ndeko wa ye Simoni o esika ena.
I Ma LinVB 11:65  Simoni azingi Betsur, abundisi yango mikolo miike mpe akangi nzela inso ya mboka.
I Ma LinVB 11:66  Bango basengi ye boboto ; Simoni andimeli bango, kasi atindi bango babima o mboka. Akamati bokonzi bwa mboka mpe atiki liboke lya basoda bakengele yango.
I Ma LinVB 11:67  Yonatan na basoda ba ye bapiki nganda penepene na etima ya Genezarete. Na nta nto­ngo bakomi o esobe ya Asor.
I Ma LinVB 11:68  Li­mpinga lya basoda bauta bayei ko­zwana na bango o esobe, nzokande batindaki basoda basusu babombama o ngomba mpo ya kokweisa Yonatan. Awa mampinga mabale makei ko­ku­tana mpo ’te babunda,
I Ma LinVB 11:69  baye ba­bo­mbami o ngomba babimi mpe ba­ba­ndi etumba.
I Ma LinVB 11:70  Basoda banso ba Yonatan bakimi, moto moko atikali te, tika se bakomanda ba basoda, Matatias mwana wa Absalom, mpe Yudas mwana wa Kalfi.
I Ma LinVB 11:71  O ntango ena Yonatan apasoli bilamba bya ye, apakoli mputulu o motó mpe asambeli.
I Ma LinVB 11:72  Na nsima akei kobunda lisusu, akwei­si mpe akimisi banguna.
I Ma LinVB 11:73  Nta­ngo bato ba ye baye bakimaki bamoni yango, bazongi, mpe elongo na ye balandi banguna tee Kedes, esika nga­nda ya bango ezalaki. Bapiki nganda o esika ena.
I Ma LinVB 11:74  O mokolo mona basoda bampaya ba Demetrio bakufi soki nkoto isato. Yonatan azongi o Yeruzalem.
Chapter 12
I Ma LinVB 12:1  Ntango Yonatan amoni ’te makambo manso mabongeli ye, aponi bato mpe atindi bango o Roma, mpo ya kolendisa lisusu bo­ndeko akataki na ba-Roma.
I Ma LinVB 12:2  Atindi mpe minkanda na maloba mana epai ya ba-Sparta mpe epai ya bato ba bi­ngumba bisusu.
I Ma LinVB 12:3  Bantoma bakei o Roma, bayingeli o likita lya bankumu, balobi : « Nganga mokonzi Yonatan elongo na ekolo ya ba-Yuda, batindi biso epai ya bino mpo tolendisa lisusu bondeko boye bokataki na ba­ngo liboso. »
I Ma LinVB 12:4  Ba-Roma bapesi bango minkanda mpo ’te o bisika binso bakoleka bakonzi balekisa bango na bo­boto, mpe basalisa bango bazonga o Yuda.
I Ma LinVB 12:5  Maloba ma monkanda moye Yonatan atindeli ba-Sparta mango maye :
I Ma LinVB 12:6  « Boyamba losako la biso, nga­nga mokonzi Yonatan, bankumu ba ekolo, banganga Nzambe na bato basusu ba ekolo ya ba-Yuda, totindeli bino, bandeko ba biso ba Sparta.
I Ma LinVB 12:7  O ntango Areios azalaki mokonzi wa bino, atindelaki nganga mokonzi Onias monkanda molakisi ’te bozali na biso bondeko. Yango emononi o monkanda tobakisi awa.
I Ma LinVB 12:8  Onias aya­mbaki ntoma wa bino na lokumu, mpe akamataki monkanda moye moyebisaki makambo ma bondeko polele.
I Ma LinVB 12:9  Biso tosengeli na bondeko bona te, zambi tozali na minkanda misantu o maboko, miye mikobondoko biso mitema.
I Ma LinVB 12:10  Nzokande tolingaki koti­nda moto mpo ya kolendisa lisusu bondeko boye tokati, mpo ’te botala biso lokola bauta te, zambi eleki mwa mingi ’te totindeli bino monkanda lisusu te.
I Ma LinVB 12:11  Epai ya biso, soko eyenga enene ezali, mpe o mikolo tokosepelaka, tokokanisaka bino mbala inso o mabonza mpe o bisambo bya biso, bobele bo elongobani na bandeko.
I Ma LinVB 12:13  Epai ya biso, kwokoso na bitumba bilekaki mingi. Bakonzi ba bikolo penepene na biso babundisaki biso.
I Ma LinVB 12:14  O eleko ya bitumba bina, tolingaki kotiela bino to baninga basusu, baye bakataki na biso bondeko, mokumba te,
I Ma LinVB 12:15  zambi lisalisi liye likobikisaka biso likouta se o Likolo. Yango wana tobiki o maboko ma ba­nguna, mpe bango basambwi.
I Ma LinVB 12:16  Bo­ngo toponi Numenio, mwana wa Antioko, na Antipater, mwana wa Yason ; totindi bango o Roma mpo ya kolendisa bondeko boye tokataki na bango.
I Ma LinVB 12:17  Totindi bango baleka epai ya bino lokola, bapesa bino losako mpe batikela bino monkanda moye molakisi ’te tolingi kolendisa boyokani bwa biso.
I Ma LinVB 12:18  Ekosepelisa biso mingi soko bokozongisela biso eyano o makambo manso tolobi. »
I Ma LinVB 12:20  « Yamba losako la ngai Areios, mokonzi wa Sparta, natindeli yo, nganga mokonzi Onias.
I Ma LinVB 12:21  O monkanda moko toyoki maka­mbo ma ba-Sparta na ba-Yuda : bazali bandeko, bato ba libota lya Abarama.
I Ma LinVB 12:22  Awa toyebi yango, ebongi otindela biso nsango ya bino soko bozali malamu.
I Ma LinVB 12:23  Biso tokomeli bino boye : Bibwele na biloko bya bino bizali mpe bya biso ; se bongo biye bya biso bizali mpe bya bino. Yango wana totindi bato bayebisa bino yango. »
I Ma LinVB 12:24  Yonatan ayoki ’te bakonzi ba basoda ba Demetrio bayei lisusu kobundisa ye na basoda baleki baye ba liboso na boike.
I Ma LinVB 12:25  Alongwi o Yeruzalem mpe akei kozwana na bango o mokili mwa Amat, mpo alingisi ba­ngo te koyingela o mokili mwa ye.
I Ma LinVB 12:26  Atindi banongi o nganda ya bango. Ezongi bango, bayebisi ye ’te banguna bamilengeli mpo ya kobanda etu­mba na ba-Yuda o kati ya butu.
I Ma LinVB 12:27  Pene na butu Yonatan atindi bato ba ye bakengele, bibuneli o maboko, butu mobimba bazila ebandela ya bitu­mba. Atii mpe bakengeli zongazonga na nganda.
I Ma LinVB 12:28  Eyoki banguna ’te Yonatan na bato ba ye bamilengeli mpo ya kobunda, bakomi kobanga. Bayoki nsomo o mitema, mpe bapelisi móto o nganda ya bango mpe bakimi.
I Ma LinVB 12:29  Tee ntongo Yonatan na bato ba ye bayebi te ’te bakimi, mpo bamoni móto mozalaki kopela.
I Ma LinVB 12:30  Na nsima Yonatan akei kolanda bango, kasi a­zwi bango te, zambi basili bakatisi ebale Eletero.
I Ma LinVB 12:31  Bongo Yonatan akei kobundisa ba-Arabu, baye bakota­ngaka mpe ba-Zabadeo. Alongi ba­ngo mpe abotoli biloko bya bango.
I Ma LinVB 12:32  Elongoli ye nganda akei o Damasko, akatisi ekolo mobimba.
I Ma LinVB 12:33  O nta­ngo ena Simoni akendeki tee Askalon mpe o bibombamelo bya penepene. Abuki lisusu epai ya Yope mpe abotoli mboka ena,
I Ma LinVB 12:34  mpo ayokaki ’te bato ba mboka balingi kotika ebo­mbamelo ya Yope o maboko ma bato ba Demetrio. Atiki liboke lya basoda mpo ’te bakengele mboka.
I Ma LinVB 12:35  Yonatan azongi o Yeruzalem, abengi likita lya bakolo, mpe elongo na bango akani kotonga bibombamelo o Yudea.
I Ma LinVB 12:36  Babakisa mpe bolai bwa bifelo bya Yeruzalem, mpe batonga efelo enene ekokabola engumba na ebombamelo ya Yeruzalem, mpo ’te bato o ebombamelo bakoka kosomba to koteke biloko te.
I Ma LinVB 12:37  Basangani lisusu mpo ya koluka kobongisa engu­mba, mpo ndambo ya lopango pene na moluka epai ya Esti ekweyaki. Babongisi mpe eteni eye ya mboka bakobengaka Kafenata.
I Ma LinVB 12:38  Simoni ale-ndisi Adida o esobe ya Sefela, mpe atii bizibeli na bikangeli binene.
I Ma LinVB 12:39  Trifo aluli kozala mokonzi wa Azia, alingi kolata enkoti ya bokonzi. Yango wana alingi kokanga mokonzi Antioko.
I Ma LinVB 12:40  Abangi ’te Yonatan akopekisa ye to akobimisa bitumba. Ya­ngo wana aluki mayele ma kokanga mpe kobomisa Yonatan. Akei tee ako­mi o Betsan.
I Ma LinVB 12:41  Yonatan aponi bato nkoto ntuku inei, basoda ba mpiko, akei na bango o Betsan.
I Ma LinVB 12:42  Trifo amoni ’te ayei na basoda ebele, abangi kobunda na ye.
I Ma LinVB 12:43  Bongo ayambi ye na lokumu lonene, alakisi ye na baninga ba ye banso, apesi ye makabo mpe atindi bango na basoda ba ye banso batosa ye lokola bazalaki kotosa ye moko.
I Ma LinVB 12:44  Atuni Yonatan : « Mpo nini olembisi bato ebele boye ? Etumba ezali nde kokanela biso ?
I Ma LinVB 12:45  Zongisa bango o mboka ; kamata ndambo ya bato batikala na yo mpo okende na ngai o Tolemais. Nakokaba mboka ena na mpe bibo­mbamelo bisusu o maboko ma yo. Nakotikela yo basoda na basaleli ba­nso ba mokonzi. Na nsima nakozo­nga o Antioko, mpo nayaki se na ntina ena. »
I Ma LinVB 12:46  Yonatan andimi maloba ma ye, mpe asali lokola ye alobi. Azongisi basoda ba ye o mokili mwa Yuda.
I Ma LinVB 12:47  Atikali bobele na basoda nkoto isato : atindi bato nkoto ibale o Galilea, mpe akei na bato nkoto yoko.
I Ma LinVB 12:48  Ekomi Yonatan bobele o Tolemais, bato ba mboka bakangi bizibeli bi­nso, bakangi Yonatan mpe babomi na mimpanga bato banso bayaki na ye.
I Ma LinVB 12:49  Trifo atindi basoda, basusu ba makolo, basusu ba farasa o Galilea mpe o esobe enene baboma basoda ba Yonatan banso.
I Ma LinVB 12:50  Bango basili bayoki ’te bakangi Yonatan, mpe babomi ye elongo na bato ba ye banso. Balendisani mitema, bamilengeli na bitumba, bakei, batingami milongo milongo.
I Ma LinVB 12:51  Banguna baye balandi bango bamoni ’te ba-Yuda bazalaki kobanga etu­mba te, kasi balingi kobikisa bomoi bwa bango, bazongi epai bautaki.
I Ma LinVB 12:52  Bongo basoda ba Yonatan banso bakomi o mokili mwa Yuda se nzoto kolongonu. Baleli Yonatan na bani­nga ba ye, bayoki nsomo mpenza. O Israel mobimba basali lilaka linene.
I Ma LinVB 12:53  Bato ba bikolo binso bya penepene baluki kosilisa ba-Yuda, balobi :
I Ma LinVB 12:54  « Tokende kobundisa bango, bongo nko­mbo ya bango elongwa o mokili. »
Chapter 13
I Ma LinVB 13:1  Simoni ayoki ’te Trifo asangisi basoda ebele mpo bakende kobebisa mokili mwa Yuda.
I Ma LinVB 13:2  Amoni ’te bato ba ye balengi na nsomo. Akei o Yeruzalem mpe asangisi bato banso.
I Ma LinVB 13:3  Alendisi bango na maloba maye : « Bino boyebi makambo manso ngai na bandeko ba ngai na bato banso ba libota lya tata wa ngai tosalaki mpo ya mibeko mpe mpo ya kobatela mboka esantu. Boyebi nde­nge tobundaki bitumba mpe toyokaki mpasi.
I Ma LinVB 13:4  Bandeko ba ngai banso bakufi se na ntina ya kobikisa Israel, mpe natikali se ngai moko.
I Ma LinVB 13:5  Ngai mpe nakoluka kobikisa bomoi bwa ngai te o ntango ya mpasi, zambi naleki bandeko ba ngai te.
I Ma LinVB 13:6  Kasi nalingi kozongisela banguna mabe manso basalaki ekolo ya ngai, na mabe basalaki mboka esantu, basi na bana ba bino. Mpamba te, bikolo binso biyokani ’te bikosilisa biso, mpo bayini biso. »
I Ma LinVB 13:7  Ntango bayoki maloba mana bato banso bakomi na mpiko lisusu.
I Ma LinVB 13:8  Banso bazongisi se monoko moko : « Yo okozala moyangeli wa biso o esika ya Yudas mpe ya ndeko wa yo Yonatan.
I Ma LinVB 13:9  Kamba biso o etumba eye ; tokosala manso okotinda biso. »
I Ma LinVB 13:10  A­be­ngi bato banso bakoki na mosala mwa soda, asali noki mpo ya kosilisa bifelo zongazonga na Yeruzalem mpe kolendisa engumba.
I Ma LinVB 13:11  Atindi Yonatan, mwana wa Absalom, o Yope elongo na basoda baike. Oyo abengani bato banso kuna, mpe ye moko akei kofanda kuna.
I Ma LinVB 13:12  Trifo alongwi o Tolemais na li­mpinga linene lya basoda, ayei o mokili mwa Yuda. Ayei na Yonatan oyo ye akangaki.
I Ma LinVB 13:13  Simoni apiki nganda o Adida, liboso lya esobe enene.
I Ma LinVB 13:14  Trifo ayoki ’te Simoni akitani ndeko wa ye Yonatan, mpe ayei kobundisa ye. Atindeli ye bantoma bayebisa ye :
I Ma LinVB 13:15  « Tokangi ndeko wa yo Yonatan, zambi afuti mosolo mwa sanduku ya leta te, moye asengelaki kofuta bo moyangeli wa mokili mwa ye.
I Ma LinVB 13:16  Bo­ngo tinda talenta monkama ya palata mpe bana babali ba ye babale bo ndanga, mpo ’te soko totiki ye aka­bwana na biso te ; soko osali bongo, tokotika ye. »
I Ma LinVB 13:17  Simoni ayebi ’te maloba ma bango mazalaki ma lokuta, nzokande atindi ’te bakamata mosolo na mpe bana mpo ’te bato bayina ye te, mpe baloba te ’te :
I Ma LinVB 13:18  « Yonatan akufi mpo yo oboyi kotinda mosolo na bana. »
I Ma LinVB 13:19  Bongo atindi bana na mpe talenta monkama. Kasi Trifo akokisi ndai ya ye te mpe atiki Yonatan te.
I Ma LinVB 13:20  Na nsima Trifo ayei kobunda mpo ’te abebisa mokili mwa bango. Atiki nzela ekuse, abuki epai ya Adora. Kasi Simoni na basoda ba ye bakangeli ye nzela bipai binso alingi koleka.
I Ma LinVB 13:21  Bato o ebombamelo ya Yeruzalem batindeli Trifo bantoma babondela ye ’te akomela bango noki o nzela ya eliki mpe ayela bango biloko bya kolia.
I Ma LinVB 13:22  Bongo Trifo asangisi basoda ba farasa banso mpo bakende kuna. Kasi o butu bona mbula ya mpembe enoki mingi, bongo akoki kokende kuna te. Alongoli nganda ya ye mpe akei o mokili mwa Galaad.
I Ma LinVB 13:23  Ekomi ye penepene na Baskama, abomi Yonatan, mpe akundi ye bobele kuna.
I Ma LinVB 13:25  Simoni atindi bato bakende kokamata ebembe ya Yonatan, ndeko wa ye. Akundi ye o Modine, mboka ya bankoko ba ye.
I Ma LinVB 13:26  Ba-Israel banso basali lilaka linene, baleli ye mikolo mingi.
I Ma LinVB 13:27  Simoni atongisi litongi linene o lilita lya tata mpe lya bandeko ba ye. Atongi lyango o liboso mpe o nsima na mabanga bapaloli kitoko, likomi na bolai bokoki mpo ’te limonono mosika.
I Ma LinVB 13:28  Atongi lyango na makonzi nsambo mazalaki kotalana, lokola elembo ya tata na mama wa ye, na bandeko ba ye banei,
I Ma LinVB 13:29  mpo ’te bakanisa bango seko. Akembisi makonzi mana na molongo mwa manongi. O nsonge ya manongi atiaki bibuneli mpe bikeko bya masuwa mpo ’te bato bakoleka na masuwa bamono byango.
I Ma LinVB 13:30  Lilita atongisi o Modine lizali naino kuna tee lelo.
I Ma LinVB 13:31  Trifo asali mokonzi wa sika Antioko moke mayele mabe, abomi ye.
I Ma LinVB 13:32  Akitani ye mpe amilatisi enkoti ya bokonzi bwa Azia mpe asali mabe mingi o ekolo mobimba.
I Ma LinVB 13:33  Simoni abongisi bibombamelo binso o Yudea, azingi byango na bifelo mpe na manongi malai. O bizibeli bya lopa­ngo abaki bikangeli binene mpe abo­mbi kuna biloko bya kolia.
I Ma LinVB 13:34  Simoni aponi bato mpe atindi bango bakende kobondela mokonzi Demetrio mpo ’te alimbisa ekolo ya bango nyongo inso, zambi Trifo ayibelaki bango biloko biike.
I Ma LinVB 13:35  Mokonzi Demetrio azo­ngiseli ye monkanda na maloba maye :
I Ma LinVB 13:36  « Yamba losako la ngai Demetrio, natindeli yo Simoni, nganga mokonzi mpe moninga wa ngai ; losako mpe na bankumu mpe na bato banso ba Yuda.
I Ma LinVB 13:37  Toyambi enkoti na mbila bisalemi na wolo botindeli biso. Tondimi koyokana na bino ; ya­ngo wana tokotindela bato ba mpako ya leta monkanda mpo ’te bafutisa bino mpako te.
I Ma LinVB 13:38  Manso tolobaki mpo ya bino mabongwani te. Bibo­mbamelo binso botongaki bizali bya bino.
I Ma LinVB 13:39  Tokolimbisa bino masengisi maye bokokisaki te, mabe bosalaki biso tee lelo, na mpe nyongo ya mpako ya leta. Soko bazalaki naino kosenge mpako esusu o Yeruzalem, basenge yango lisusu te.
I Ma LinVB 13:40  Soko epai ya bino basusu bamimoni ’te bakoki na mosala mwa soda o lingomba lya baye bakokengeleke mokonzi, bakoki kokomisa nkombo, bongo boboto bo­zala kati ya biso na bino. »
I Ma LinVB 13:41  Bongo o mobu mwa monkama na ntuku nsambo balongoli mikumba mya bapagano o mapeke ma ba-Israel.
I Ma LinVB 13:42  Babandi kokoma o minkanda mya bango : « O mobu mwa yambo mwa bokonzi bwa Simoni, nganga mokonzi, komanda monene mpe moyangeli wa ba-Yuda. »
I Ma LinVB 13:43  O mikolo mina, Simoni akei kobundisa Gazara ; na basoda ba ye azingi yango. Atongi linongi lilai, lizalaki lokola likalo, apusi lyango penepene na lopango la mboka, abuki na lyango lopango mpe bayingeli o mboka.
I Ma LinVB 13:44  Baye bazalaki o linongi liye bapimbwi o nse, mpe bakiti o mboka : yango ebangisi bato ba mboka.
I Ma LinVB 13:45  Bayei na basi mpe na bana ba bango, babuti efelo, bapasoli bilamba, mpe babondeli Simoni mingi ’te atika bango kimia. Balobi :
I Ma LinVB 13:46  « Osala biso engebene na mabe ma biso te, kasi oyokela biso ngolu. »
I Ma LinVB 13:47  Simoni andimeli ba­ngo : atiki etumba, kasi abengani ba­ngo o mboka, apetoli ndako inso izalaki na bikeko. Na nsima ayingeli o mboka ya bango na nzembo ya bokumisi mpe ya botondi Nzambe.
I Ma LinVB 13:48  Alongoli biloko binso bya mbindo, afandisi wana se bato bakotosaka Mobeko. Alendisi mboka, mpe amitongeli ndako enene.
I Ma LinVB 13:49  Baye bakangemi o ebombamelo ya Yeruzalem bakoki kobima mpe kozonga te mpo ’te basomba to bateke biloko, bazalaki koyoka nzala ene­ne mpe baike bakufi na nzala.
I Ma LinVB 13:50  Babondeli Simoni mingi ’te atika bango. Simoni andimi, kasi abengani bango o ebombamelo mpe apetoli yango na mbindo inso.
I Ma LinVB 13:51  Ba-Yuda ba­yingeli wana o mobu mwa monkama na ntuku nsambo na moko, o sa­nza ya ibale, mikolo ntuku ibale na misato. Babeteli Simoni bisako, ma­ndalala o maboko, na bobeti la nze­nze, mbonda na likembe, bayembi nzembo, mpo bakweisi monguna monene mpe bakimisi ye o Israel.
I Ma LinVB 13:52  Simoni abimisi mobeko ’te mobu na mobu mokolo mona mozala eyenga enene. Alendisi lopango la Ngomba ya Tempelo pene na ebombamelo, mpe akei kofanda wana na bato ba ye.
I Ma LinVB 13:53  Simoni amoni ’te mwana wa ye Yoane akomi mokolo, yango wana apesi ye bokonzi bwa basoda banso. Yoane akei kofanda o Gazara.
Chapter 14
I Ma LinVB 14:1  O mobu mwa monkama na ntuku nsambo na mibale mokonzi Demetrio asangisi basoda ba ye banso. Akei o Medi koluka naino basoda basusu basalisa ye o etumba na Trifo.
I Ma LinVB 14:2  Arsakes, mokonzi wa Persi na Medi, ayoki ’te Demetrio ayei o mokili mwa ye, atindi moyangeli moko mpo akanga ye, kasi aboma ye te.
I Ma LinVB 14:3  Moyangeli ona akei kosukisa basoda ba Demetrio ; akangi Demetrio mpe ayei na ye epai ya Arsakes ; oyo akangisi ye o boloko.
I Ma LinVB 14:4  Ekolo ezalaki solo na kimia mikolo minso mya bokonzi bwa Simoni. Aluki bobele bolamu bwa ekolo ; bato ba ye basepeli bokonzi bwa ye, bandimi lokumu la ye bomoi bwa ye mobimba.
I Ma LinVB 14:5  Akolisi naino lokumu la ye ntango abotoli Yope, atongisi kuna libongo linene, afungoli bongo nzela ya kokoma o bisanga bya mbu.
I Ma LinVB 14:6  Akomisi ekolo enene, mpe ayangeli yango mobimba malamu.
I Ma LinVB 14:7  Asali ’te bato baike baye bakendeki o boombo bazonga. Abotoli Gazara, Betsur na ebombamelo ya Yeruzalem, mpe apetoli yango na mbindo inso ; moto moko akokaki ye te.
I Ma LinVB 14:8  Bato bazalaki kokata bilanga na motema mpio ; mabelé mazalaki kobota mingi, mpe mbuma ya nzete izalaki mingi.
I Ma LinVB 14:9  Babange bazalaki kofanda mpembeni ya balabala, o monoko bobele lisolo lya bolamu bazwi ; bilenge bazalaki kolata bilamba binzenga bya lilonga.
I Ma LinVB 14:10  O bingumba abongisi makambo ma kolia, mpe asali misala mingi mpo ’te bakoka ya kobatela byango ; bongo nkombo ya ye etamboli kin’o nsuka ya mokili.
I Ma LinVB 14:11  Atii boboto o ekolo ya ye ; o Israel bato bazalaki koyoka ese­ngo enene.
I Ma LinVB 14:12  Moto nyonso azalaki ko­fa­nda o nse ya nzete ya vino mpe ya figi, moto moko te azalaki kotu­ngisa bango.
I Ma LinVB 14:13  Balukaki ye na etumba te, o mikolo mina bakonzi bakokaki ye te.
I Ma LinVB 14:14  Alendisi bato bake o ekolo ya ye, azalaki na mpila o botosi Mobeko, asukisi baye baboya Nzambe mpe bato babe.
I Ma LinVB 14:15  Azongiseli Tempelo lokumu la liboso, atondisi yango na nkeni ya motuya ebele.
I Ma LinVB 14:16  Nsango ya liwa lya Yonatan eyokisi ba-Roma na ba-Sparta mawa manene.
I Ma LinVB 14:17  Kasi awa bayoki ’te ndeko wa ye Simoni akomi nganga mokonzi o esika ya ye, mpe azalaki koyangela mboka inso ya ekolo ya ye,
I Ma LinVB 14:18  bati-ndeli ye maloba makomami o nkasa ya mbengi mpo ’te bayokana na ye mpe bakata bondeko lisusu, boye bakataki na bandeko ba ye Yudas na Yonatan.
I Ma LinVB 14:19  Batangi maloba mana manso o likita linene lya Yeruzalem.
I Ma LinVB 14:20  Maloba ba-Sparta batindi, mango maye : « Boyamba losako biso bankumu mpe bato ba Sparta totindeli nga­nga mokonzi Simoni, bankumu na banganga Nzambe na ba-Yuda ba­nso.
I Ma LinVB 14:21  Bantoma botindelaki biso bayebisi biso lokumu lonene mpe nke­mbo izali na bino ; boyei bwa bango bosepelisi biso.
I Ma LinVB 14:22  O buku enene ya leta tokomi makambo maye boye : Numenios, mwana wa Antioko, na Antipater, mwana wa Yason, bantoma ba ba-Yuda bayaki epai ya biso kokata lisusu bondeko kati ya biso na bango.
I Ma LinVB 14:23  Bato banso bandimaki ’te toyamba bango na nkembo enene, mpe tobombi maloba ma bango o minkanda mya leta, mpo ’te ba-Sparta babosana mango te. Totindeli mpe nganga mokonzi Simoni monkanda na maloba maye. »
I Ma LinVB 14:24  Nsima na yango Simoni atindi Numenio o Roma na nguba enene ya wolo, ezalaki na bozito bwa mina nkoto yoko, bo elembo ya bondeko na bango.
I Ma LinVB 14:25  Eyoki bato makambo maye ma­nso, bamituni : « Eloko nini tokoki kosala mpo topesa Simoni na bana ba ye litondi,
I Ma LinVB 14:26  mpo bango na bandeko ba ye, na bato banso ba libota lya ye, bapikaki mpende o etumba na ba­nguna ba Israel, bazongisi bango nsima mpe bazongisi bonsomi o ekolo ya biso. » Bakomi maloba mana o nkasa ya mbengi mpe babaki nkasa ena o makonzi batongi o ngomba Sion.
I Ma LinVB 14:27  Maloba mana mango maye : « O mobu mwa monkama na ntuku nsambo na mibale, mobu mwa misato mwa bokonzi bwa nganga moko­nzi Simoni, o sanza Elul, o mokolo mwa zomi na mwambe, tosanganaki o libanda lya Tempelo.
I Ma LinVB 14:28  O ntango ya Likita linene lya banganga Nzambe, elongo na bato banso, na bankumu mpe na bakolo, batangeli biso makambo maye :
I Ma LinVB 14:29  O eleko bitumba bizalaki mingi o mokili, Simoni, mwana wa Matatias, nkoko wa Yoarib, na bandeko ba ye, babangaki liwa te, kasi babundi na banguna ba ekolo ya bango mpo ’te babikisa Tempelo mpe babatela Mobeko ; bongo bapesi ekolo ya bango lokumu lonene.
I Ma LinVB 14:30  Yonatan asangisi bato o ekolo yoko, mpe akomi nganga mokonzi, na nsima akei kopema o mboka ya seko ya ba­nkoko.
I Ma LinVB 14:31  Banguna ba ba-Yuda bali­ngaki kokoto o ekolo ya bango mpo ya kobebisa yango mpe kobotolo Tempelo,
I Ma LinVB 14:32  kasi Simoni atelemi mpe abuneli ekolo ya ye. Na mosolo mwa ye moko asombi bibuneli mpe apesi bato ba mpiko byango, afuti mpe ba­ngo lifuta.
I Ma LinVB 14:33  Alendisi bingumba bya Yudea, na mpe Betsur o ndelo ya mokili mwa Yudea, esika banguna bazalaki kobomba bibuneli kala ; atii basoda ba ba-Yuda kuna.
I Ma LinVB 14:34  Alendisi mpe Yope pene na mbu mpe Gazara o ndelo ya mokili mwa Azoto, esika banguna bazalaki liboso ; kuna atii ba-Yuda mpe apesi bango biloko bi­nso basengeli na byango.
I Ma LinVB 14:35  Emoni bato ’te Simoni azalaki moto wa lobokó, mpe ndenge alingaki kopesa lokumu na ekolo ya ye, baluboli ye mokambi mpe nganga mokonzi. Bandimi bongo ’te asaleli ekolo na misala minene, na bosembo mpe na lobokó, mpo o makambo manso alukaki se kotombola bato ba ekolo ya ye.
I Ma LinVB 14:36  O ntango azalaki mokambi abengani bapagano o ekolo ya bango, ata baye bafandaki o Yeruzalem. Ut’o ebombamelo batongaki wana bazalaki kobebisa bisika zongazonga na Tempelo mpe kosantola yango mpe­nza.
I Ma LinVB 14:37  Simoni atii basoda ba ba-Yuda o ebombamelo mpe alendisi yango naino mpo ya kobatela bato ba e­ngu­mba mpe ba ekolo mobimba. Ato­mboli mpe lopango lozingi Yeruzalem.
I Ma LinVB 14:38  Yango wana mokonzi Demetrio akomisi ye nganga mokonzi.
I Ma LinVB 14:39  Ayambi ye o molongo mwa bani­nga ba ye, mpe alakisi ye lokumu lonene.
I Ma LinVB 14:40  Ayokaki mpe ’te ba-Roma bazalaki kolinga ba-Yuda mpe kotala bango lokola bandeko mpenza, mpe ndenge bayambaki bantoma ba Simoni na lokumu lonene.
I Ma LinVB 14:41  Ba-Yuda na banga­nga Nzambe baponi Simoni azala mokambi mpe nganga mokonzi wa bango seko tee mokolo profeta wa solo akobima.
I Ma LinVB 14:42  Simoni akomi mpe mokonzi wa basoda ba bango, oyo akopono bayangeli ba misala mya Tempelo, ba misala mya ekolo, na mpe baye bakotala ndako ya bibuneli mpe bakokamba basoda bya bibo­mbamelo.
I Ma LinVB 14:43  Bobele ye moto akotala esika esantu, mpe bato banso base­ngeli kotosa ye. Minkanda minso mya leta mikokomama se o nkombo ya ye. Azalaki kolata bilamba bya bokonzi bya longondo bikembami na wolo.
I Ma LinVB 14:44  Moto moko te, azala ata nganga Nzambe, akoki kobongola makambo maye, koboya ata mobeko moko, to kobenga bato o likita, soko liboso azwi ndingisa ya ye te. Akoki mpe kolata elamba ya longondo te, lifungu lya wolo mpe te.
I Ma LinVB 14:45  Moto abuki mobeko mwa ye to aboyi etinda ya ye, akozwa etumbu.
I Ma LinVB 14:46  Bato banso ba­ndimi kopesa Simoni likoki lya kosala lokola matangemi awa.
I Ma LinVB 14:47  Simoni andimi yango : andimi kozala nganga mokonzi, mokonzi wa basoda, mpe mokambi wa banganga Nzambe mpe wa bato banso ; andimi koyangela bato banso.
I Ma LinVB 14:48  Bapesi mobeko ’te maye manso makomama o nkasa ya mbe-ngi, mpe babaka yango o lopango la Tempelo o esika bato banso bakoki komono yango.
I Ma LinVB 14:49  Batii mpe monka­nda moko na maloba maye o sanduku ya leta, mpo ’te Simoni na bana ba ye bakoka kotanga mwango. »
Chapter 15
I Ma LinVB 15:1  Ut’o bisanga o mbu Antioko, mwana wa mokonzi Demetrio, atindeli Simoni, nganga mokonzi mpe mokambi wa ba-Yuda, na mpe ekolo mobimba monkanda moko.
I Ma LinVB 15:2  Mokomami boye : « Yamba losako la ngai mokonzi Antioko, natindeli yo Simoni, nganga mokonzi mpe mokambi wa ekolo, na mpe ekolo mobimba ya ba-Yuda.
I Ma LinVB 15:3  Bato babe babotoloki mokili mwa bankoko ba ngai, kasi nalingi kobotolo bango bokonzi bona mpe kozongisa mokili lokola ezalaki liboso. Yango wana nasangisi basoda ebele mpe nabongisi masuwa ma etumba.
I Ma LinVB 15:4  Nalingi koseme o mokili mwa ngai mpo ’te nazongisa mabe ma bato babebisi mokili moye mpe babomi bingumba mingi ya bokonzi bwa ngai.
I Ma LinVB 15:5  Nayebisi yo ’te bokofuta mpako te, lokola bakonzi baye bazalaki liboso lya ngai balobaki. Okofuta mpe mpako te ya biloko biye binso bango balobaki.
I Ma LinVB 15:6  Nalingisi yo obimisa mosolo na elili na yo, ezala mosolo mwa ekolo ya yo.
I Ma LinVB 15:7  Yeruzalem na Tempelo ikozala na bonsomi. Bibuneli binso osali mpe bibombamelo biye otongi, bikotikala bya yo.
I Ma LinVB 15:8  Ba­nda lelo nakolimbisa yo maye ose­ngeli kofuta mokonzi, ata sikawa ata nsima.
I Ma LinVB 15:9  Mokolo nakokoma lisusu na mokili mwa ngai, nakopesa yo, ekolo mpe Tempelo ya yo lokumu lonene, bongo nkombo ya yo ekoyebana o nse mobimba. »
I Ma LinVB 15:10  O mobu mwa monkama na ntuku nsambo na minei, Antioko akei etumba o mokili mwa bankoko ba ye. Basoda ebele bayei kosangana na ye, bongo Trifo atikali se na ndambo ya bato.
I Ma LinVB 15:11  Antioko alandi ye. Trifo akimi o Dora penepene na mbu.
I Ma LinVB 15:12  Amoni ’te mabe makweli ye, mpo basoda ba ye batiki ye.
I Ma LinVB 15:13  Antioko ayei kopika nganda penepene na Dora, azali na basoda nkoto monkama na ntuku ibale na mpe basoda ba farasa nkoto mwambe.
I Ma LinVB 15:14  Azingi engu­mba ntango bato ba masuwa baka­ngeli Trifo nzela ya mbu. Bongo bazi­ngi ye o mokili mpe o mbu, mpe basali ’te moto moko aleka lisusu te.
I Ma LinVB 15:15  O ntango ena Numenio na bani-nga baye bakendeki o Roma bayei na minkanda mikomami boye ona bakonzi ba bikolo binso :
I Ma LinVB 15:16  « Yamba losako la ngai Lusio, nto­ma wa ba-Roma, natindeli yo moko­nzi Tolemeo.
I Ma LinVB 15:17  Nganga mokonzi Simoni mpe ba-Yuda banso batindi bantoma epai ya biso lokola baninga ba motema moko mpo ya kolendisa bondeko, boye bakataki na biso liboso.
I Ma LinVB 15:18  Bayei na nguba yoko, ezalaki na bozito bwa mina nkoto yoko.
I Ma LinVB 15:19  Ya­ngo wana natindeli bakonzi banso monkanda mpo ’te batungisa bango te, babundisa bango te, ezala bato ba bingumba to ba mboka. Soko ekolo yoko ebimisi etumba na ba-Yuda, basalisa ekolo ena te.
I Ma LinVB 15:21  Bongo soko bato babe bakimi ekolo ya bango mpo bafanda epai ya bino, bokaba bango o maboko ma nganga moko­nzi Simoni. Ye moto akopesa bango etumbu engebene na mobeko mwa bango. »
I Ma LinVB 15:22  Batindi monkanda na maloba ma­na epai ya mokonzi Demetrio, epai ya Atale, Ariarate, Arsakes
I Ma LinVB 15:23  mpe o bikolo binso, Sampsane, ba-Sparta, Delos, Mindos, Sikion, Kari, Samos, Pamfilia, Lisia, Alikarnaso, Rodos, Faselis, Kos, Side, Arados, Gortine, Knida, Sipro na mpe Sirene.
I Ma LinVB 15:24  Batindi mpe mosusu bapesa nganga mokonzi Simoni.
I Ma LinVB 15:25  Mokonzi Antioko azingi Dora. Atindi basoda ba ye balembe te kobundisa engumba. Mpe asali bibuneli binene. Akangisi Trifo o engumba, mpo ’te moto moko akoka kobima to koyingela lisusu te.
I Ma LinVB 15:26  Simoni atindeli Antioko bato nkoto ibale basalisa ye. Atindi mpe palata na wolo na makabo mingi.
I Ma LinVB 15:27  Kasi Antioko alingi koyamba bango te ; kutu awangani makambo manso ayokanaki na Simoni liboso. Ayambi ye lisusu lokola liboso te.
I Ma LinVB 15:28  Atindi Atenobio, moninga wa ye, akende kokutana na Simoni mpe aloba na ye : « Obotoli Yope, Gazara na mpe ebombamelo ya Yeruzalem : bingumba bina bizali bya ekolo ya ngai.
I Ma LinVB 15:29  Obebisi mokili moye, bosali mabe mingi. Obotoli mboka mingi o ekolo ya ngai.
I Ma LinVB 15:30  Sikawa zongisa mboka iye obotoli, mpe mpako mboka iye izali ya ekolo ya Yudea te, ifuti ngai te.
I Ma LinVB 15:31  Soko olingi te, pesa talenta nkama itano ya palata mpo ya bila­nga obebisaki ; pesa lisusu talenta nkama itano bo mpako bingumba bisengelaki kofuta. Soko oboyi, tokobundisa yo. »
I Ma LinVB 15:32  Atenobio, moninga wa mokonzi, ayei o Yeruzalem. Amoni nkita ya Simoni, mbeki ya wolo mpe ya palata o meza ya ye, amoni mpe basaleli ebele bazalaki na ye. Akamwi mingi. Nta­ngo ayebisi ye maloba ma mokonzi,
I Ma LinVB 15:33  Simoni azongiseli ye eyano eye : « Nabotoli mabelé ma ekolo esusu te, nayibi biloko bya bato te ; ezali se mabelé bankoko ba biso batikela biso, maye banguna bayibaki liboso.
I Ma LinVB 15:34  Awa makambo mabongeli ngai, nakamati mabelé ma bankoko.
I Ma LinVB 15:35  Bato ba Yope mpe ba Gazara, mboka iye ozali kosenge, basali bato mpe ekolo ya biso mabe mingi. Mpo ya yango nakopesa talenta monkama. » Atenobio ayoki yango, kasi alobi eloko te.
I Ma LinVB 15:36  Azongi epai ya mokonzi na nkanda o motema, ayebisi ye eyano ya Simoni. Ayebisi ye mpe nkita ya Simoni na maye manso amoni kuna. Yango eyokisi mokonzi nkanda enene o motema.
I Ma LinVB 15:38  Mokonzi atindi Kendebeo azala moyangeli wa mokili penepene na mai ; apesi ye basoda ebele, basusu ba makolo, basusu ba farasa.
I Ma LinVB 15:39  Atindi ye apika nganda penepene na mokili mwa Yudea, atonga Kedron lisusu, alendisa bizibeli bya mboka, mpe abanda bitumba na bato ba ekolo ena. Mokonzi ye moko akei kolanda Trifo.
I Ma LinVB 15:40  Kendebeo akei o Yamnia ; abandi kotungisa bato ba Yudea mpe kobebisa mokili mwa bango, kokanga bato bo baombo mpe koboma basusu.
I Ma LinVB 15:41  Alendisi Kedron mpe atondisi yango na basoda ba makolo mpe ba farasa, baye bakendeki kokengele nzela ya Yudea, lokola mokonzi atindaki ye.
Chapter 16
I Ma LinVB 16:1  Yoane atiki Gazara, akei koyebisa tata wa ye Simoni maye Kendebeo azalaki kosala.
I Ma LinVB 16:2  Simoni abengi bana ba ye ba yambo, Yudas na Yoane, alobi na bango : « Ngai na bandeko ba ngai, na libota lya ngai mobimba, tobundaki na banguna ba Israel ut’o bolenge tee lelo. Mbala mingi tobikisaki ekolo ya Israel.
I Ma LinVB 16:3  Sikawa nakomi mobange. Nzambe asalisi bino, bokomi bakolo. Bozala o esika ya ngai mpe ya ndeko wa ngai, mpe bokende kobunda mpo ya kobikisa ekolo ya biso. Nzambe asalisa bino. »
I Ma LinVB 16:4  Yoane aponi o ekolo bato nkoto ntuku ibale, basoda ba makolo mpe ba farasa, bakende kobundisa Kendebeo. Na butu balali o Modine.
I Ma LinVB 16:5  Balamuki na nta ntongo mpe bakei o esobe. Limpinga lya basoda ebele liyei kozwana na bango, basoda ba makolo mpe ba farasa ; kasi mai makaboli bango.
I Ma LinVB 16:6  Yoane abongisi milo­ngo mya basoda, batalani na ba­ngu­na. Emoni ye ’te bato ba ye babangi kokatisa mai, ye moko akatisi mai liboso. Awa basoda ba ye bamoni ya­ngo, bakatisi mpe mai nsima ya ye.
I Ma LinVB 16:7  Akaboli basoda na mangomba mabale, atii basoda ba farasa o kati ya basoda ba makolo, zambi banguna bayei na basoda ba farasa ebele.
I Ma LinVB 16:8  Babeti mindule mpe bakimisi Kendebeo na basoda ba ye ; o kati ya bango mi­ngi bakufi, basusu bakimi o ebombamelo.
I Ma LinVB 16:9  Yudas, ndeko wa Yoane, azoki mpota o etumba. Yoane alandi banguna tee Kedron, eye Kendebeo alendisaki.
I Ma LinVB 16:10  Basusu bakimi mpe bakei kobombama o manongi batongaki o esobe ya Azoto, yango wana Yoane atumbi mango. Banguna nkoto ibale bakufi ; Yoane azongi na boboto o Yudea.
I Ma LinVB 16:11  Tolemeo, mwana wa Abubo, ako­maki moyangeli wa mabelé ma Yeriko. Azalaki na wolo mpe na palata mingi,
I Ma LinVB 16:13  Akomi moto wa lolendo, aluli bokonzi bwa ekolo mpe akaneli Simoni na bandeko ba ye, aluki koboma bango.
I Ma LinVB 16:14  Simoni ameseni kotala kotala mboka inso ya ekolo, mpo apangani na bolamu bwa bato malamu. Akomi bongo na bana ba ye Matatias na Yudas o Yeriko ; ezalaki o mobu mwa monkama na ntuku nsambo na nsambo, o sanza zomi na yoko, sanza Sebat.
I Ma LinVB 16:15  Mwana wa Abubo ayambi bango na mayele mabe o Dok, mwa ebombamelo eke ye atongaki. Alambeli bango limpati linene, kasi abombi bato ba ye.
I Ma LinVB 16:16  Awa Simoni na bana ba ye balangwi masanga, Tolemeo na bato ba ye babimi na bibuneli o maboko. Bakangi Simoni o ndako ya limpati, babomi ye na bana ba ye babale, na basaleli basusu ba ye.
I Ma LinVB 16:17  Asali likambo lya nsomo mpenza : asuli ; esika ya malamu basalaki ye, azongiseli bango se mabe.
I Ma LinVB 16:18  Tolemeo ayebisi yango o mo­nkanda atindeli mokonzi mpo ’te basoda baya kosalisa ye, bongo akoka koyangela mboka o ekolo ena.
I Ma LinVB 16:19  Ati­ndi bato basusu o Gazara baboma Yoane ; mpe na monkanda abengi bakomanda baya epai ya ye, zambi ali­ngi kopesa bango palata, wolo na mabonza.
I Ma LinVB 16:20  Atindi bato basusu bakende kobotolo Yeruzalem mpe ngomba ya Tempelo.
I Ma LinVB 16:21  Kasi moto moko akendeki liboso koyebisa Yoane o Gazara ’te babomi tata na bandeko ba ye, mpe abakisi ’te : « Atindi mpe bato mpo ’te baboma yo. »
I Ma LinVB 16:22  Eyoki Yoane bongo, abulungani. Akangisi bato bayaki ko­boma ye ; abomisi bango, zambi ayebi ’te bakanaki koboma ye.
I Ma LinVB 16:23  Makambo masusu ma Yoane, bitumba bya ye, bikela bya ye bya mpiko, ndenge atongaki mapango manene ma mboka mpe misala mya ye misusu,
I Ma LinVB 16:24  manso makomami o buku ya Bikela bya banganga bakonzi, banda mokolo akomi nganga mokonzi o esika ya tata wa ye.