Chapter 1
Matt | LinVB | 1:11 | Yozía abótí Yekónia na bandeko ba yě ; ezalákí ntángo bakangémákí bǒ baómbo o Babilóne. | |
Matt | LinVB | 1:17 | Bôngó bankóko bánso útá Abaráma téé Davídi bazalí zómi na bánei ; útá Davídi téé bakendékí o Babilóne, bankóko bazalí zómi na bánei ; esílákí boómbo o Babilóne téé Krístu, bankóko bazalí zómi na bánei. | |
Matt | LinVB | 1:18 | Tálá bóníbóní Yézu Krístu abótámí. Mamá wa yě María abandémákí na Yozéfu ; kasi libosó lya kofánda na yě, akwélí zémi na ngúyá ya Elímo Sántu. | |
Matt | LinVB | 1:19 | Yozéfu, mobáli wa yě, azalákí moto wa motéma sémba mpé alingí kofúnda yě té ; akání kotíka yě na bonkútú. | |
Matt | LinVB | 1:20 | Ntángo azalákí kokanisa bôngó, táláká ǎnzelú wa Nzámbe abimélí yě na ndóto, alobí na yě : « Yozéfu, mwána wa Davídi, óbánga té kokamata María mwásí wa yǒ o ndáko ; akwélí zémi na ngúyá ya Elímo Sántu. | |
Matt | LinVB | 1:21 | Akobóta mwána mobáli mpé okopésa yě nkómbó Yézu : yě moto akobíkisa bato ba ekólo ya yě o masúmu ma bangó. » | |
Matt | LinVB | 1:22 | Maye mánso masálémí bôngó mpô ya kokokisa maloba Mokonzi alobáká na monoko mwa proféta : | |
Matt | LinVB | 1:23 | « Ngondo akokwéla zémi mpé akobóta mwána mobáli, mpé bakopésa mwána nkómbó Emánuel. » Nkómbó eye lokóla ’te : « Nzámbe azalí na bísó. » | |
Matt | LinVB | 1:24 | Elongwí Yozéfu o mpongí, asálí lokóla ǎnzelú wa Nzámbe atíndákí yě : akamátí mwásí wa yě o ndáko ; | |
Chapter 2
Matt | LinVB | 2:1 | Ebótámí Yézu o Beteléme ya Yudéa, o eleko ya mokonzi Eróde, banganga minzóto bayéí o Yerúzalem, baútí epái ya Esti, | |
Matt | LinVB | 2:2 | batúní ’te : « Mokonzi wa ba-Yúda óyo abótámí sika azalí wápi ? tomónókí monzóto mwa yě mobimí epái ya Esti mpé toyéí kokúmbamela yě. » | |
Matt | LinVB | 2:4 | Eróde abyángí banganga bakonzi na batéyi ba Mobéko bánso, mpé atúní bangó esíká níni Krístu asengélí kobótama. | |
Matt | LinVB | 2:6 | Yǒ Beteléme, mabelé ma Yúda, ozalí etúká ya nsúka ya Yúda té, zambí mokonzi mǒkó akobótama na yŏ, óyo akozala mokéngeli wa ekólo ya ngáí Israél. » | |
Matt | LinVB | 2:7 | Eróde abyángí banganga minzóto na bonkútú mpé atúní bangó malámu ntángo níni mpenzá monzóto momónónókí o likoló. | |
Matt | LinVB | 2:8 | Atíndí bangó o Beteléme, alobí : « Bókende kotúna malámu mpô ya mwána. Sókó bomóní yě, bóyâ koyébisa ngáí, mpô ’te ngáí mpé nákende kokúmbamela yě. » | |
Matt | LinVB | 2:9 | Awa bayókí maloba ma mokonzi, bakeí. Mpé tálá, monzóto bamónókí epái ya Esti motámbólí libosó lya bangó téé mokeí kotéleme likoló lya esíká mwána azalákí. | |
Matt | LinVB | 2:11 | Bayíngélí o ndáko, bamóní mwána ná María mamá wa yě, bafukámí mpé bakúmbámélí yě. Bafungólí bilóko bamemí mpé babonzélí yě makabo : wólo, mpaka ya malási na míra. | |
Matt | LinVB | 2:12 | Awa Nzámbe ayébísí bangó na ndóto ’te bázónga epái ya Eróde té, balandí nzelá esúsu mpô ya kozónga o ekólo ya bangó. | |
Matt | LinVB | 2:13 | Awa banganga minzóto bakeí, Anzelú wa Mokonzi abimélí Yozéfu o ndóto, alobí na yě : « Télémé, kamátá mwána ná mamá wa yě, kímá o Ezípeti mpé tíkálá kúná téé mokolo nakoyébisa yŏ, zambí Eróde azalí koluka mwána mpô ya koboma yě. » | |
Matt | LinVB | 2:15 | Atíkálí kúná kín’o liwá lya Eróde, mpô ’te ésálema lokóla Mokonzi alobákí na monoko mwa proféta : Nabyángí mwána wa ngáí út’o Ezípeti. | |
Matt | LinVB | 2:16 | Emóní Eróde ’te banganga minzóto bakósí yě, ayókí nkándá enéne, atíndí ’te, o Beteléme mpé o mambóka ma penepene, báboma bána bánso bakokísí naíno mibú míbalé té. Na yangó alandí mikolo banganga bayébísákí yě. | |
Matt | LinVB | 2:18 | Loláká loyókání o Rama : boleli mpé bokímeli na mawa ; Rakéle moto azalí kolela bána ba yě, mpé alingí té ’te bábóndo yě, mpô bána ba yě bazalí lisúsu té. | |
Matt | LinVB | 2:20 | alobí na yě : « Télémé, kamátá mwána ná mamá wa yě, zóngá o mokili mwa Israél, zambí baye balingákí koboma mwána basílí bawéí. » | |
Matt | LinVB | 2:22 | Kasi eyókí yě ’te Arkeláo akómí mokonzi wa Yudéa o esíká ya tatá wa yě Eróde, abángí kokende kúná ; bakébísí yě o ndóto, yangó wâná akeí o ekólo ya Galiléa. | |
Chapter 3
Matt | LinVB | 3:3 | Mpô ya yě mpenzá proféta Izáya alobáká : Moto abélélí o elíkí, yě ’te : Bóbongisela Mokonzi nzelá, bósémbola nzelá ya yě. | |
Matt | LinVB | 3:4 | Yoáne azalákí koláta elambá ya nsúki ya kaméla mpé komíkanga mokába mwa lomposo la nyama o lokéto ; azalákí kolía mitó mya bítekuteku mpé mafúta ma nzói ya zámba. | |
Matt | LinVB | 3:5 | Bato ba Yerúzalem, bato bánso ba Yudéa mpé ba ekólo penepene na Yordáne bakeí epái ya yě, | |
Matt | LinVB | 3:7 | Awa amóní ’te ba-Farizéo na ba-Saduséo baíké bayéí mpô ya batísimo, alobí na bangó : « Bána ba nyóka, náni alakísí bínó kokíma Nkándá ekoyâ | |
Matt | LinVB | 3:9 | mpé bótíka koloba o mitéma : ‘Abaráma azalí tatá wa bísó’. Zambí nayébísí bínó : Nzámbe akokí kosála ’te mabángá maye mákoka kobimisela Abaráma bána. | |
Matt | LinVB | 3:10 | Basílí batíí sóka o ntína ya nzeté ; nzeté ínso ikobóta mbuma ilámu té, bakokáta mpé bakobwáka yangó o móto. | |
Matt | LinVB | 3:11 | Ngáí nazalí kobátisa bínó na mái mpô ’te bóbóngola mitéma, kasi óyo akoyâ nsima ya ngáí, alekí ngáí na ngúyá ; nabongí té kolongola mapápa o makolo ma yě : yě akobátisa bínó na Elímo Sántu mpé na móto. | |
Matt | LinVB | 3:12 | Asímbí lúngu o mabóko, akopepe mbuma ya yě ; akosangisa mbuma ya mámpa o ebómbelo, kasi akotumba mpumbulú o móto mokozíma té. » | |
Matt | LinVB | 3:13 | O ntángo êná Yézu aútí o Galiléa mpé ayéí o Yordáne epái ya Yoáne mpô ’te ábátisa yě. | |
Matt | LinVB | 3:14 | Kasi Yoáne alingí kopekisa yě, alobí : « Ngáí moto nasengélí kokúla batísimo na mabóko ma yŏ, bôngó yŏ okoyâ epái ya ngáí ! » | |
Matt | LinVB | 3:16 | Ekúlí Yézu batísimo, abimí o mái. Mpé tálá, likoló lifungwání mpé amóní Elímo wa Nzámbe lokóla ebengá, akitélí yě. | |
Chapter 4
Matt | LinVB | 4:3 | Mosénginyi abelémí mpé alobí na yě : « Sókó ozalí Mwána wa Nzámbe, lobá na mabángá maye ’te mábóngwana mámpa. » | |
Matt | LinVB | 4:4 | Kasi Yézu azóngísí : « Ekomámí ’te : Moto akobíka bobélé na mámpa té, kasi na maloba mánso makobimaka o monoko mwa Nzámbe. » | |
Matt | LinVB | 4:6 | mpé alobí na yě : « Sókó ozalí Mwána wa Nzámbe, ómíbwáka o nsé, zambí ekomámí ’te : Akopésa bǎnzelú ba yě etíndá mpô ya yŏ, mpé bakomeme yŏ o mabóko, mpô ’te ótúta lokolo na libángá té. » | |
Matt | LinVB | 4:8 | Zábolo akeí na yě mpé o nsóngé ya ngómbá esándá mpenzá, alakísí yě mikili mínso mya nsé ná nkémbo ya myangó, | |
Matt | LinVB | 4:10 | Yézu alobí na yě : « Longwá Sátana, zambí ekomámí ’te : Okokúmbamela Mokonzi Nzámbe wa yŏ, okokúmisa bobélé Yě mŏkó. » | |
Matt | LinVB | 4:13 | Atíkí Nazaréte mpé akeí kofánda o Kafárnaum, pene na etíma, o ndelo ya mikili mya Zabulon na Neftali, | |
Matt | LinVB | 4:15 | Bato ba mikili mya Zabulon na Neftali, o nzelá ya mbú, o ngámbo ya Yordáne, o Galiléa ya bapagáno ! | |
Matt | LinVB | 4:16 | Bato bazalákí o molílí bamóní mwínda monéne ; mói motánélí baye bafándí o mbóka ya bawá. | |
Matt | LinVB | 4:17 | Bandá ntángo êná Yézu abandí kotéya bato mpé koloba : « Bóbóngola mitéma, zambí Bokonzi bwa Likoló bokómí penepene. » | |
Matt | LinVB | 4:18 | Yézu alekí penepene na etíma ya Galiléa. Amóní bandeko bábalé, Simóni, óyo bakobyángaka Pétro, na Andréa ndeko wa yě, bazalákí kobwáka monyámá o mái ; bazalákí babomi mbísi. | |
Matt | LinVB | 4:21 | Atámbólí lisúsu mwâ moké, amóní bandeko basúsu bábalé, Yakóbo mwána wa Zebedéo, mpé ndeko wa yě Yoáne. Bazalákí o bwáto, na tatá wa bangó Zebedéo, kobongisa minyámá ; abyángí bangó. | |
Matt | LinVB | 4:23 | Yézu atámbólí o Galiléa mobimba, atéyí bato o sinagóga ya bangó, asangélí bangó Nsango Elámu ya Bokonzi mpé abíkísí bato bazalákí na bokono mpé na mpási. | |
Matt | LinVB | 4:24 | Nsango ya yě etámbólí o mokili mobimba mwa Síria. Bazalákí koyéla yě bato bánso bazalákí na bokono tŏ na mpási ndéngé na ndéngé, baye bazalákí na zábolo o nzóto tŏ na bokono bwa bonsíngá tŏ babúkáná makolo. Yézu abíkísí bangó. | |
Chapter 5
Matt | LinVB | 5:6 | Esengo na bato bakoyóka mpósá ya bosémbo, zambí bakozóngisela bangó mambí ma bosémbo. | |
Matt | LinVB | 5:10 | Esengo na bato bakonyókwama mpô ya bosémbo, zambí bakoyí-ngela o Bokonzi bwa Likoló. | |
Matt | LinVB | 5:11 | Esengo na bínó sókó bakofínga bínó, sókó bakonyókolo bínó, sókó bakotóngo bínó na makambo ndéngé na ndéngé mpô ya ngáí : | |
Matt | LinVB | 5:12 | bósepela mpé bóyóka nsáí, zambí bokozwa mbano enéne o likoló ! Banyókólókó baproféta sé bôngó, baye bazalákí libosó lya bínó. | |
Matt | LinVB | 5:13 | Bínó bozalí móngwa mwa nsé. Kasi sókó móngwa mosílí bokénzú, bakozóngisela mwangó bokénzú na níni ? Mobongí lisúsu na elóko yǒkó té ; ekokí sé bábwáka mwangó mpé bányata mwangó na bato. | |
Matt | LinVB | 5:14 | Bínó bozalí mwínda mwa mokili. Engumbá etóngámí o nsóngé ya ngómbá ekokí kobómbama té. | |
Matt | LinVB | 5:15 | Mpé bakopelisaka mwínda té mpô ya kobómba mwangó o nsé ya eboka, kasi mpô ya kotía mwangó o etémiseli ya mwínda, mpô ’te móngengele bato bánso bazalí o ndáko. | |
Matt | LinVB | 5:16 | Sé bôngó mwínda mwa bínó mópela o míso ma bato, mpô ’te bámóno malámu maye bozalí kosála mpé bákúmisa Tatá wa bínó azalí o likoló. | |
Matt | LinVB | 5:17 | Bókanisa té ’te nayéí kolongola Mobéko tǒ maloba ma baproféta. Nayéí kolongola elóko té, nayéí ndé kokokisa. | |
Matt | LinVB | 5:18 | Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Libosó ’te likoló na nsé bíleka, makambo mánso ma Mobéko makosálema. Nkomá yǒkó ekolongwa té, atâ i yǒkó té, atâ enkoti yǒkó ya i té ! | |
Matt | LinVB | 5:19 | Moto abúkí atâ motíndo moké mpé alakísí bato basúsu kosála bôngó, akozala moto wa nsima o Bokonzi bwa Likoló. Kasi moto atósí mibéko mpé alakísí bato basúsu kosála bôngó, akozala moto monéne o Bokonzi bwa Likoló. | |
Matt | LinVB | 5:20 | Nayébísí bínó : Sókó bosémbo bwa bínó bolekí bosémbo bwa batéyi ba Mobéko mpé bwa ba-Farizéo té, bokoyíngela o Bokonzi bwa Likoló té. | |
Matt | LinVB | 5:22 | Kasi ngáí nayébísí bínó : Moto asilíkélí ndeko wa yě, bakosámbisa yě. Moto afíngí ndeko wa yě ‘zóba’, bakosámbisa yě o likita lya bakóló ba mbóka. Mpé sókó alobí na yě ‘ligbómá !’, bakokátela yě etúmbu ya kokende o libúlú lya móto. | |
Matt | LinVB | 5:23 | Bôngó, sókó oyéí kotíka libonza lya yǒ o altáre, mpé okundólí o motéma ’te ndeko wa yǒ azalí na likambo na yǒ, | |
Matt | LinVB | 5:24 | tíká libonza lya yǒ o bosó bwa altáre mpé kendé libosó koyókana na ndeko wa yě ; na nsima zóngá mpô ya kobonza libonza lya yǒ. | |
Matt | LinVB | 5:25 | Sálá nokí ’te óyókana na moto óyo afúndí yǒ, ntángo bínó na yě bozalí naíno o nzelá ; bôngó ákaba yǒ o mabóko ma zúzi té ; sókí té, akokaba yǒ na bazúzi, bôngó zúzi akokaba yǒ na bakéngeli mpô ’te bábwáka yǒ o bolóko. | |
Matt | LinVB | 5:28 | Kasi ngáí nayébísí bínó : Moto atálí mwásí na bolúli, asílí asálí bokáli na mwásí ôná o káti ya motéma. | |
Matt | LinVB | 5:29 | Sókó líso lya yǒ lya mobáli likokwêisa yǒ o masúmu, longólá lyangó mpé bwáká lyangó mosíká : malámu ozánga enama yǒkó ya nzóto, kasi bábwáka nzóto ya yǒ mobimba o límfelo té. | |
Matt | LinVB | 5:30 | Mpé sókó lobóko la yǒ la mobáli lokokwêisa yǒ o masúmu, kátá langó mpé bwáká langó mosíká : malámu ózánga enama yǒkó ya nzóto, kasi nzóto ya yǒ mobimba ékita o límfelo té. | |
Matt | LinVB | 5:31 | Balobáká mpé ’te : Moto akobe-ngana mwásí wa yě, ápésa yě monkandá mwa bobomi libála. | |
Matt | LinVB | 5:32 | Kasi ngáí nayébísí bínó : moto abengání mwásí wa yě –tíká sé sókó bafándí libála lipekísámí na mibéko– akotínda yě o nzelá ya bokáli ; mpé óyo abálí mwásí abóyámí na mobáli wa yě, asálí bokáli. | |
Matt | LinVB | 5:33 | Boyókákí mpé ’te balobáká na bankóko : Olaya ndaí ya lokutá na nkómbó ya Nzámbe té ; kasi sálá maye olayákí o míso ma Nzámbe. | |
Matt | LinVB | 5:34 | Kasi ngáí nayébísí bínó : Bólaya sókí té ! Na nkómbó ya Likoló té, zambí ezalí ngwendé ya Nzámbe ; | |
Matt | LinVB | 5:35 | na nkómbó ya Nsé té, zambí ezalí ebóngá ya makolo ma yě ; na nkómbó ya Yerúzalem té, zambí ezalí Engumbá ya Mokonzi monéne. | |
Matt | LinVB | 5:36 | Bólaya mpé na mitó mya bínó mǒkó té, zambí bokokí kobóngola atâ mosúki mǒkó mókóma mpémbé tǒ moíndo té. | |
Matt | LinVB | 5:37 | Sókó ondimí likambo, lobá : ‘Nandimí’ ; sókó ondimí té, lobá : ‘Nandimí té’ ; maye bakobakisa maútí na Mobébisi. | |
Matt | LinVB | 5:38 | Boyókákí ’te balobáká : Otúbólí móníngá líso, bátúbola mpé lya yǒ ; obúkí yě líno, bábúka mpé lya yǒ. | |
Matt | LinVB | 5:39 | Kasi ngáí nayébísí bínó : Mabé basálí bínó, bózóngisa mangó té. Sókó moto abétí yǒ o litáma lya mobáli, ópésa yě mpé litáma lya mwásí. | |
Matt | LinVB | 5:40 | Sókó moto alingí kofúnda yǒ epái ya bazúzi mpé awélí elambá ya yǒ (bǒ ndanga), ótíkela yě mpé monkóto mwa yǒ. | |
Matt | LinVB | 5:41 | Sókó asengísí yǒ ’te ókende kotíka yě o nzelá kilométele yǒkó, kendé na yě kilométele íbalé. | |
Matt | LinVB | 5:42 | Moto aséngí yǒ elóko, ópésa yě yangó, mpé óyo alingí kodéfa epái ya yǒ, ópésa yě mokongo té. | |
Matt | LinVB | 5:45 | Bôngó, bokozala bána ba Tatá wa bínó azalí o likoló. Yě akobimiselaka ná bato babé ná bato balámu móí mwa yě ; mpé akonókiselaka bánso mbúla ya yě, ná bato ba bosémbo ná baye bazalí na bosémbo té. | |
Matt | LinVB | 5:46 | Sókó bolingí bobélé bato bakolingaka bínó, bokozwa mbáno níni ? Bafútisi mpáko bakosálaka mpé bôngó té ? | |
Matt | LinVB | 5:47 | Sókó bokopésaka losáko sé na bandeko ba bínó, bolekí bato basúsu na níni ? Bapagáno bakosálaka mpé bôngó té ? | |
Chapter 6
Matt | LinVB | 6:1 | Bókéba ’te bóluka kobénda míso ma bato té na malámu bokosála ; sókí té, bokozwa mbano té o mbóka ya Tatá wa bínó o likoló. | |
Matt | LinVB | 6:2 | Bôngó, sókó olingí kokabela moto wa mawa elóko, óbéte mondúle o bosó bwa yǒ té. Bakíbisi bakosálaka bôngó o sinagóga mpé o balabála mpô ’te bato bákúmisa bangó. Ya sôló, nayébísí bínó : basílí bazwí mbano ya bangó. | |
Matt | LinVB | 6:3 | Kasi yǒ, sókó okabélí moto wa mawa elóko na lobóko la mobáli, lobóko la mwásí lóyéba yangó té, | |
Matt | LinVB | 6:4 | mpô ’te likabo lya yǒ límónono na bato té ; mpé Tatá wa yǒ, óyo akomónoko maye mabómbámí, akofúta yǒ. | |
Matt | LinVB | 6:5 | Mpé sókó bosámbélí, bósála lokóla bakíbisi té : mpô ya kosámbela, balingí kotéleme o sinagóga mpé o bisíká balabála íbalé ikútání mpô ’te bato bámóno bangó. Ya sôló, nayébísí bínó : basílí bazwí mbano ya bangó. | |
Matt | LinVB | 6:6 | Kasi yǒ, ntángo olingí kosámbela, yíngélá o káti ya ndáko, kangá ezibeli malámu, mpé sámbélá Tatá wa yǒ óyo amónóní té ; mpé yě, Tatá wa yǒ óyo akomónoko maye mabómbámí, akofúta yǒ. | |
Matt | LinVB | 6:7 | Sókó bozali kosámbéla, bóloba maloba míngi míngi té lokóla bapagáno. Bangó bakanísí ’te Nzámbe akondimela bangó nokí sókó balobí míngi. | |
Matt | LinVB | 6:8 | Bósálaka lokóla bangó té, zambí libosó ’te bósénge yě, Tatá wa bínó asílí ayébí eye esengélí na bínó. | |
Matt | LinVB | 6:14 | Ya sôló, sókó bolímbísí báníngá mabé maye basálí bínó, Tatá wa bínó azalí o likoló akolímbisa bínó lokóla. | |
Matt | LinVB | 6:15 | Kasi sókó bolímbísí báníngá té, Tatá wa bínó akolímbisa mabé ma bínó mpé té. Boláli nzala | |
Matt | LinVB | 6:16 | Sókó bolálí nzala, bólakisa elongi ya mawa té, lokóla bakíbisi bakosálaka ; bakolakisaka bilongi bya mawa mawa mpô ’te bato bámóno malámu ’te bazalí kolála nzala. Ya sôló, nayébísí bínó : basílí bazwí mbano ya bangó. | |
Matt | LinVB | 6:18 | mpô ’te bato báyéba té ’te ozalí kolála nzala ; bobélé Tatá wa yǒ, óyo amónóní té, áyéba ; mpé yě Tatá wa yǒ, óyo akomónoko maye mabómbámí, akofúta yǒ. | |
Matt | LinVB | 6:19 | Bómíbómbela nkita áwa o nsé té : ikobéba na mbombó mpé na nkusú, tǒ bayíbi bakobúka ndáko mpé bakoyíba yangó. | |
Matt | LinVB | 6:20 | Kasi bómíbómbela nkita o likoló, esíká ekobéba té na mbombó tǒ na nkusú ; kúná bayíbi bakobúka sandúku té, mpé bakoyíba yangó té. | |
Matt | LinVB | 6:22 | Líso lizalí mwínda mwa nzóto ; bôngó sókó líso lya yǒ lizalí malámu, nzóto ya yǒ mobimba ekozala na mwínda. | |
Matt | LinVB | 6:23 | Kasi sókó líso lya yǒ lizalí kobéle, nzóto ya yǒ mobimba ekozala na molílí. Bôngó, sókó mwínda moye mozalí o nzóto ya yǒ mokómí molílí, yangó ndé butú mpenzá. | |
Matt | LinVB | 6:24 | Moto mǒkó té akokí kosálela bakonzi bábalé ; tǒ akoyina mǒkó mpé akolinga mosúsu, tǒ akondima mǒkó mpé akokínola mosúsu. Bokokí kosálela Nzámbe ná mpé Mosolo té. | |
Matt | LinVB | 6:25 | Yangó wâná nayébísí bínó : bómítungisa té mpô ya bomoi bwa bínó sókó bokolía níni, tǒ mpô ya nzóto sókó bokoláta níni. Bomoi bolekí biléi té ? Nzóto elekí bilambá té ? | |
Matt | LinVB | 6:26 | Táláni ndeke ya likoló : ikokátaka bilanga té, ikobúkaka mbuma té, ikosangisaka yangó o bibómbelo té. Kasi Tatá wa bínó o likoló akoléisaka yangó ! Bínó bolekí ndeke na motúya té ? | |
Matt | LinVB | 6:27 | Náni o ntéi ya bínó, atâ amítungísí ndéngé níni, akokí kobakisa atâ mokolo mǒkó na bomoi bwa yě ? | |
Matt | LinVB | 6:28 | Mpé ntína níni bokomítungisaka mpô ya bilambá ? Táláni ndéngé níni fuléle ikokólaka o bilanga : ikoyókaka mpási na mosálá té, mpé ikosonoko bilambá té. | |
Matt | LinVB | 6:30 | Bôngó sókó Nzámbe akobongisaka matíti ma bilanga bôngó, maye mazalí leló mpé makobwákema lóbí o móto, akosála bínó malámu malekí té ? Bínó bato ba boyambi boké ! | |
Matt | LinVB | 6:32 | Bapagáno bato bakolukaka bilóko bîná bínso. Nzókandé Tatá wa bínó o likoló ayébí ’te bosengélí na byangó bínso. | |
Matt | LinVB | 6:33 | Bóluka libosó Bokonzi bwa Nzámbe mpé bosémbo bwa bwangó ; bilóko biye bínso ndebabakísélí bínó nsima. | |
Chapter 7
Matt | LinVB | 7:2 | zambí na loléngé bokosámbisa báníngá, bakosámbisa mpé bínó ; na ndélo bokomeka báníngá, bakomeka mpé bínó lokóla. | |
Matt | LinVB | 7:3 | Mpô níni okotálaka mwâ litíti o líso lya ndeko wa yǒ ? Kasi libáyá o líso lya yǒ mǒkó, ozalí komóno lyangó té ! | |
Matt | LinVB | 7:4 | Bóníbóní okokí koloba na ndeko wa yǒ : ‘Tíká nálongola litíti o líso lya yǒ ’, sókó libáyá lizalí o líso lya yǒ mǒkó ? | |
Matt | LinVB | 7:5 | Mokíbisi, longólá libosó libáyá o líso lya yǒ mǒkó, bôngó okomóno malámu mpô ’te ólongola litíti o líso lya ndeko wa yǒ. | |
Matt | LinVB | 7:6 | Bópésa mbwá bilóko bisántu té ; bóbwákela ngúlu mayaka ma bínó té ; mbele ikonyata mangó, mpé na nsima ikozóngela bínó mpô ya kozokisa bínó. | |
Matt | LinVB | 7:7 | Bósénge mpé bakopésa bínó ; bóluka mpé bokozwa ; bóbétele ezibeli ya ndáko mpé bakofungolela bínó. | |
Matt | LinVB | 7:8 | Zambí moto nyónso akosénge, akozwa ; óyo akoluka, akomóno ; óyo akobétele ezibeli ya ndáko, bakofungolela yě. | |
Matt | LinVB | 7:11 | Bôngó, sókó bínó bato babé bokopésaka bána ba bínó bilóko bilámu, ntembe té, Tatá wa bínó o likoló akopésa bilóko bilekí bilámu na baye baséngí yě ! | |
Matt | LinVB | 7:12 | Mánso bolingí bato básála bínó, bósála bangó sé bôngó : tálá ntína ya Mobéko mpé matéya ma baproféta. | |
Matt | LinVB | 7:13 | Bóyíngela epái ya ezibeli eké, zambí nzelá ekokamba moto o liwá ezalí enéne mpenzá ; bato baíké bakolandaka yangó. | |
Matt | LinVB | 7:14 | Kasi nzelá ekokamba moto o bomoi ezalí na ezibeli eké mpé nkáká mpenzá ; baye bakolandaka nzelá êná bazalí míngi té. | |
Matt | LinVB | 7:15 | Bókéba na baproféta ba lokutá. Bakoyâ epái ya bínó, balátí mposo ya mpatá, kasi bazalí na mitéma mya nkoi moyíbi. | |
Matt | LinVB | 7:16 | Bokoyéba bangó na mbuma ya bangó. Bakobúkaka ndé mbuma ya víno o káti ya nzúbe, tǒ mbuma ya fígi o káti ya nsesé ? | |
Matt | LinVB | 7:18 | Sé bôngó, nzeté elámu ekokí kobóta mbuma ibé té, mpé nzeté ebé ekokí kobóta mbuma ilámu té. | |
Matt | LinVB | 7:21 | Bato bakoloba na ngáí ‘Mokonzi ! Mokonzi !’, bakoyíngela bangó bánso o Bokonzi bwa Likoló té. Ekoyíngela wâná bobélé baye bakosálaka mpô ilingí Tatá wa ngáí azalí o likoló. | |
Matt | LinVB | 7:22 | Mokolo môná bato baíké bakoloba na ngáí : ‘Mokonzi, Mokonzi, tosakólákí o nkómbó ya yǒ té ? Tobengánákí bazábolo o nkómbó ya yǒ té ? Tosálákí makamwísi o nkómbó ya yǒ té ?’ | |
Matt | LinVB | 7:23 | Kasi ngáí nakoloba na bangó polélé : ‘Nayébí bínó sókí té. Bólongwa mosíká na ngáí, makambo ma bínó mazángí bosémbo.’ | |
Matt | LinVB | 7:24 | Bôngó, moto nyónso ayókí maloba maye ma ngáí mpé akokísí mangó, azalí lokóla moto wa mayéle óyo atóngí ndáko ya yě o mabángá. | |
Matt | LinVB | 7:25 | Mbúla enókí, mái ma ebale etombókí, mompepe makási moyéí mpé moningísí ndáko êná ; kasi ebúkání té, mpô etóngámí o mabángá. | |
Matt | LinVB | 7:26 | Kasi moto nyónso ayókí maloba maye ma ngáí mpé akokísí mangó té, azalí lokóla moto azángí mayéle, atóngí ndáko ya yě o zélo. | |
Matt | LinVB | 7:27 | Mbúla enókí, mái ma ebale matombókí, mompepe makási moyéí mpé moningísí ndáko êná ; ndáko ekwéí mpé ebébí nyé ! » | |
Chapter 8
Matt | LinVB | 8:2 | Tálá, moto wa maba ayéí, akúmbámélí yě, alobí : « Mokonzi, sókó olingí, okokí kopétola ngáí. » | |
Matt | LinVB | 8:3 | Yézu atómbólí lobóko, asímbí yě, alobí : « Nalingí ókóma péto. » Sé o ntángo êná apétwámí na maba ma yě. | |
Matt | LinVB | 8:4 | Yézu alobí na yě : « Kébá, óloba yangó na moto té ; kasi kendé komílakisa na nganga Nzámbe, mpé bonza libonza lokóla Móze atíndákí mpô ya kolakisa bato ’te obíkí. » | |
Matt | LinVB | 8:6 | « Mokonzi, mosáleli wa ngáí alálí o ndáko, makolo ma yě mabúkání mpé azalí koyóka mpási míngi. » | |
Matt | LinVB | 8:8 | Komandá azóngísí : « Mokonzi, nabongí té ’te óyíngela o ndáko ya ngáí, kasi lobá kaka mpé mosáleli wa ngáí akobíka. | |
Matt | LinVB | 8:9 | Ngáí nazalí na bakonzi libosó lya ngáí, nazalí mpé na basodá nsima ya ngáí. Sókó nalobí na mǒkó ‘Kendé’, akokende ; na mosúsu ‘Yáká’, akoyâ ; na mosúsu ‘Sálá mosálá moye’, akosála mwangó. » | |
Matt | LinVB | 8:10 | Eyókí Yézu bôngó, akámwí mpé alobí na bato bazalákí kolanda yě : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : naíno nakútí moto wa boyambi boye o Israél té. | |
Matt | LinVB | 8:11 | Yangó wâná nayébísí bínó : Bato míngi bakoyâ, bakoúta o Esti mpé o Wésti mpé bakolía limpáti o Bokonzi bwa Likoló esíká yǒ kó na Abaráma, na Izáka mpé na Yakób. | |
Matt | LinVB | 8:12 | Kasi bakobwáka bána ba Bokonzi o libándá, o káti ya molílí ; kúná bakolela mpé bakolía míno. » | |
Matt | LinVB | 8:13 | Mpé alobí na komandá : « Kendé, likambo oséngí na boyambi, lísálema ! » Mosáleli abíkí sé o ngonga êná. | |
Matt | LinVB | 8:15 | Yézu asímbí lobóko la yě, féfele etíkí yě. Bokiló wa Pétro atélémí mpé apésí Yézu biléi. | |
Matt | LinVB | 8:16 | Na mpókwa bayélí yě bato baíké bakangémí na bilímo bibé. Na liloba lyǒ kó abengání bilímo mpé abíkísí bato bánso bazalákí na bokono. | |
Matt | LinVB | 8:17 | Akokísí bôngó maloba ma proféta Izáya : Akamátí malózí ma bísó o nzóto ya yě, amemí makono ma bísó. | |
Matt | LinVB | 8:19 | Motéyi wa Mobéko mǒkó abelémí, alobí na yě : « Motéyi, nakolanda yǒ bipái bínso okokende. » | |
Matt | LinVB | 8:20 | Yézu alobí na yě : « Gambala izalí na mabúlú o mabelé, ndeke ikotóngaka zúmbu o nzeté ; kasi Mwána wa Moto azalí na esíká ya kolálisa motó té. » | |
Matt | LinVB | 8:24 | Na mbálákáká mbóngé iyéí makási mpé mái makótí o bwáto. Kasi Yézu azalákí kolála mpongí. | |
Matt | LinVB | 8:25 | Bayékoli babelémí mpé balamúsí yě, balobí : « Mokonzi, bíkísá bísó, tolingí tókúfa ! » | |
Matt | LinVB | 8:26 | Azóngísí : « Mpô níni bozalí kobánga, bínó bato ba boyambi botaú ? » Atélémí, agángélí mompepe na mbú, mpé mái makómí nyê. | |
Matt | LinVB | 8:27 | Bato bakámwí míngi mpenzá, balobí : « Moto óyo ndé náni ’te mompepe na mbú izalí kotósa yě ? » | |
Matt | LinVB | 8:28 | Ntángo Yézu akómí o ngámbo, o mokili mwa ba-Gadara, bato bábalé bayéí kokútana na yě. Bazalákí na bazábolo o nzóto mpé baútí o malíta. Bazalákí kotomboko míngi mpenzá ; bôngó moto mǒkó akokí koleka o nzelá êná té. | |
Matt | LinVB | 8:29 | Babandí kogánga : « Mwána wa Nzámbe, bísó na yǒ likambo níni ? Oyéí áwa ndé konyókolo bísó, atá elaká ya bísó ekokí naíno té ? » | |
Matt | LinVB | 8:32 | Yézu alobí na bangó : « Bókende. » Babimí ; eyíngélí bangó o ngúlu, út’o ngómbá etónga mobimba ya ngúlu emíbwákí o etíma, ekúfí o mái. | |
Matt | LinVB | 8:33 | Bakéngeli bakímí, bakeí o mbóka koyébisa mánso, ná mpé maye makwêlákí bato bakangémákí na bazábolo. | |
Chapter 9
Matt | LinVB | 9:2 | Bayélí yě moto mǒkó akúfá makolo, alálí o kitikwálá. Emóní Yézu boyambi bwa bangó, alobí na moto wa mbengo : « Mwána, zalá na elíkyá, masúmu ma yǒ malímbámí. » | |
Matt | LinVB | 9:4 | Kasi Yézu ayébí makanisi ma bangó, alobí : « Mpô níni bozalí na makanisi mabé o mitéma ? | |
Matt | LinVB | 9:6 | Bôngó, mpô bóyéba ’te Mwána wa Moto azalí na likokí lya kolímbisa masúmu áwa o nsé », –sikáwa alobí na moto akúfá makolo– : « Kamátá kitikwálá ya yǒ mpé zóngá o ndáko. » | |
Matt | LinVB | 9:8 | Awa bato bamóní bôngó, babángí míngi mpenzá, bakúmísí Nzámbe óyo apésí bato likokí linéne boye. | |
Matt | LinVB | 9:9 | Yézu alongwí wâná. O nzelá akútí moto mǒkó afándí o biló ya mpáko, nkómbó ya yě Matéo. Alobí na yě : « Landá ngáí. » Matéo atélémí mpé alandí yě. | |
Matt | LinVB | 9:10 | Ntángo Yézu azalákí kolía o ndáko ya Mateo, bafútisi mpáko na basúmuki míngi bayéí kofánda esíká yǒ kó na yě mpé na bayékoli ba yě. | |
Matt | LinVB | 9:11 | Emóní ba-Farizéo bôngó, balobí na bayékoli : « Mpô níni mokonzi wa bínó azalí kolía esíká yǒ kó na bafútisi mpáko mpé na basúmuki ? » | |
Matt | LinVB | 9:12 | Yézu ayókí yangó, alobí : « Bato bazalí nzóto kólóngónú basengélí na mónganga té, kasi bato ba bokono. | |
Matt | LinVB | 9:13 | Bókende koyékola ntína ya maloba maye : Nalingí bato ba motéma ngolu, leká mabonza. Nayéí kobênga basémba té, kasi basúmuki. » | |
Matt | LinVB | 9:14 | Bayékoli ba Yoáne bayéí kotúna Yézu : « Bísó na ba-Farizéo tokolálaka nzala ; ntína níni bayékoli ba yǒ bakolálaka nzala té ? » | |
Matt | LinVB | 9:15 | Yézu alobí na bangó : « Báníngá ba mobáli alóngání sika bakokí ndé kosála liláká ntángo mobáli azalí naíno na bangó ? Kasi o mikolo mikoyâ, áwa basílí kolongola mobáli wa bolóngani o ntéi ya bangó, bakolála nzala. | |
Matt | LinVB | 9:16 | Moto mǒkó té akobamba elambá ya kala na eténi ya elambá ya sika, zambí eténi ya sika ekobéndabénda elambá ya kala mpé ekokómisa lilusú linéne koleka. | |
Matt | LinVB | 9:17 | Bakotíaka víno ya sika o ngóto ya kala té ; sókó basálí bôngó, víno ekopasola ngóto mpé ekosopana, mpé ngóto ekobéba. Kasi bakotíaka víno ya sika o ngóto ya sika ; bôngó, ná víno ná ngóto ikobómbama malámu. » | |
Matt | LinVB | 9:18 | Ezalákí yě naíno koloba na bangó, nkúmú mǒkó abelémí, akú-mbámélí yě, alobí : « Mwána mwásí wa ngáí awéí sikasikáwa, kasi óyâ kotandela yě lobóko, mpé akozónga na bomoi. » | |
Matt | LinVB | 9:20 | Mwásí mǒkó azalákí na bokono bwa botangi makilá mibú zómi na míbalé, abelémí na yě epái ya nsima ; asímbí nsóngé ya elambá ya yě, | |
Matt | LinVB | 9:22 | Yézu amíbóngólí, amóní yě, alobí : « Mwána mwasi, zalá na elíkyá, boyambi bwa yǒ bobíkísí yǒ. » Ut’o ntángo êná mwásí abíkí. | |
Matt | LinVB | 9:23 | Ekómí Yézu o ndáko ya nkúmú, amóní bato bazalákí kobéte mpiólóló mpé bato bánso bazalákí kolela makási. Alobí na bangó : | |
Matt | LinVB | 9:25 | Ntángo babimísí bato bánso, Yézu ayíngélí, asímbí mwána mwásí na lobóko ; mwána mwásí amífándísí. | |
Matt | LinVB | 9:27 | Elongwí Yézu kúná, bato ba lolandá bábalé balandí yě, bagángí : « Mwána wa Davídi, yókélá bísó mawa ! » | |
Matt | LinVB | 9:28 | Ekómí Yézu o ndáko, babelémí na yě. Atúní bangó : « Bondimí ’te nakokí kosála bôngó ? » Balobí : « Iyo, Mokonzi. » | |
Matt | LinVB | 9:30 | Mpé míso ma bangó mafungwámí. Yézu akébísí bangó makási, alobí : « Bókéba, moto mǒkó áyéba mpô yangó té ! » | |
Matt | LinVB | 9:33 | Yézu abengání zábolo mpé moto ebúbú abandí koloba. Bato bánso bakámwí mpé balobí : « Mokolo mǒkó té tomóní bôngó o Israél. » | |
Matt | LinVB | 9:34 | Kasi ba-Farizéo balobí : « Mokonzi wa bazábolo moto akopésaka yě ngúyá ya kobengana bazábolo. » | |
Matt | LinVB | 9:35 | Yézu alekí o bingumbá mpé o mbóka ínso, azalákí kotéya o sinagóga ya bangó, kosangela Nsango Elámu ya Bokonzi mpé kobíkisa bato bánso bazalákí na bokono mpé na mpási ndéngé na ndéngé. | |
Matt | LinVB | 9:36 | Emóní yě bato ebelé boye, ayókélí bangó mawa, zambí balembí mpé balálí wâná lokóla mpatá izángí mokéngeli. | |
Chapter 10
Matt | LinVB | 10:1 | Yézu abéngí bayékoli zómi na bábalé, apésí bangó likokí lya kobengana bilímo mbindo mpé lya kobíkisa bato bánso bazalí na bokono mpé na mpási ndéngé na ndéngé. | |
Matt | LinVB | 10:2 | Tálá nkómbó ya bapóstolo zómi na bábalé : libosó Simóni, óyo bakobéngaka Pétro, na Andréa ndeko wa yě ; Yakóbo, mwána wa Zebedéo, na ndeko wa yě Yoáne ; | |
Matt | LinVB | 10:3 | Filípo na Bartoloméo ; Tomá na Matéo mofútisi mpáko ; Yakóbo, mwána wa Alféo, na Tadéo ; | |
Matt | LinVB | 10:5 | Yézu atíndí bangó zómi na bábalé, apésí bangó mibéko miye : « Bókende epái ya bapagáno té, bóyíngela o bingumbá bya ba-Samaría té ; | |
Matt | LinVB | 10:8 | Bóbíkisa bato ba bokono, bósékwisa bawéi, bópétola bato ba maba, bóbengana bazábolo. Bozwí makabo mpámba, bópésa mpé mpámba. | |
Matt | LinVB | 10:10 | líbenga lya mobémbo té, bilambá bíbalé té, mapápa té, língénda mpé té : ebongí ’te mosáli ázwa biléi bya yě. | |
Matt | LinVB | 10:11 | Ekoyíngela bínó o engumbá tǒ o mbóka, bótúna bato bálakisa bínó moto óyo akokí koyamba bínó mpô bófánda epái ya yě téé mokolo bokolongwa. | |
Matt | LinVB | 10:13 | Sókó bato bazalí wâná balongóbání, bobóto bwa bínó bótíkala na bangó ; sókó balongóbání té, bobóto bózóngela bínó. | |
Matt | LinVB | 10:14 | Sókó bayambí bínó té, mpé bandimí matéya ma bínó té, bóbima o ndáko tǒ o engumbá êná, mpé bópupola mputulú ya makolo. | |
Matt | LinVB | 10:15 | Ya sôló sôló, nalobí na bínó : O mokolo bakokáta makambo ma bato, mbóka êná ekozwa etúmbu enéne leká etúmbu ya ekólo ya Sódoma na Gómora. | |
Matt | LinVB | 10:16 | Natíndí bínó lokóla mpatá o ntéi ya nkoi. Yangó wâná bózala na bokébi lokóla nyóka, mpé na bobóto lokóla bibengá. | |
Matt | LinVB | 10:17 | Bókéba na bato : bakokaba bínó o mabóko ma bazúzi, bakobéte bínó fímbo o sinagóga ya bangó, | |
Matt | LinVB | 10:18 | bakobénda bínó o bosó bwa bayángeli na bakonzi banéne mpô ya ngáí, mpô ’te bósakola makambo ma ngáí o míso ma bangó mpé ma bapagáno. | |
Matt | LinVB | 10:19 | Kasi sókó bakangí bínó, bómítungisa té na bokanisi sókó bokoloba níni tǒ ndéngé níni bokoloba. O ntángo êná bokoyéba níni bosengélí koloba, | |
Matt | LinVB | 10:21 | Ndeko mǒkó akokaba ndeko wa yě mpô ’te báboma yě, tatá akokaba mwána wa yě. Bána bakotombokela babóti ba bangó mpé bakobomisa bangó. | |
Matt | LinVB | 10:23 | Sókó babengání bínó o mbóka yǒkó, bókíma o mbóka esúsu ; sókó babengání bínó mpé o mbóka êná, bókíma o mbóka ya ísáto. Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Mwána wa Moto akoyâ libosó ’te bosílí kokóma o mbóka ínso ya Israél. | |
Matt | LinVB | 10:25 | Ekokí na moyékoli ákóma lokóla molakisi wa yě, mpé mosáleli lokóla nkóló wa yě. Sókó bato bafíngí nkóló wa ndáko ‘Bélzebul’, bakofínga bato ba libótá lya yě sé bôngó té ? | |
Matt | LinVB | 10:26 | Bôngó bóbánga bangó té ! Mánso mabómbámí sikáwa makomónono, mánso malobámí na bonkútú makoyébana. | |
Matt | LinVB | 10:27 | Maye nakoyébisa bínó na butú, bósakola mangó na mói ; maye bokoyóka na matói, bósakola mangó út’o motóndo mwa ndáko. | |
Matt | LinVB | 10:28 | Bato bakoboma nzóto kasi bakokí koboma molímo té, bóbánga bangó té. Bóbánga ndé Oyo akokí kobwáka ná molímo ná nzóto o límfelo. | |
Matt | LinVB | 10:29 | Bakotékeke ndeke iké íbalé na motúya moké té ? Nzókandé ndeke yǒ kó ekokwéya o mabelé té, sókó Tatá wa bínó alingísí té ! | |
Matt | LinVB | 10:32 | Moto akondima ngáí o míso ma bato, ngáí mpé nakondima yě o míso ma Tatá wa ngáí azalí o likoló ; | |
Matt | LinVB | 10:33 | kasi moto akowángana ngáí o míso ma bato, ngáí mpé nakowángana yě o míso ma Tatá wa ngáí azalí o likoló. | |
Matt | LinVB | 10:35 | Nayéí kobébisa boyókani káti ya mwána mobáli na tatá wa yě, káti ya mwána mwásí na mamá wa yě, káti ya mwásí na bokiló wa yě. | |
Matt | LinVB | 10:37 | Moto alingí tatá na mamá wa yě koleka ngáí, abongí na ngáí té. Moto alingí mwána wa yě wa mobáli tǒ wa mwásí koleka ngáí, abongí na ngáí té. | |
Matt | LinVB | 10:39 | Moto akoluka kobátela bomoi bwa yě, akobúngisa bwangó, mpé moto akobúngisa bomoi bwa yě mpô ya ngáí, akozwa bwangó lisúsu. | |
Matt | LinVB | 10:41 | Moto ayambí proféta zambí azalí proféta, akozwa mbano ya proféta : mpé óyo ayambí moto wa bosémbo, zambí azalí moto wa bosémbo, akozwa mbano ya moto wa bosémbo. | |
Chapter 11
Matt | LinVB | 11:1 | Esílísí Yézu kopésa bayékoli ba yě zómi na bábalé mibéko mîná, akeí kotéya mpé kosakola o bingumbá bya bangó. | |
Matt | LinVB | 11:2 | Ntángo Yoáne azalákí o bolóko, ayókí nsango ya bikelá bya Krístu. Atíndí bayékoli ba yě bátúna yě : | |
Matt | LinVB | 11:5 | bato ba lolandá bakómí komóno ; baye babúkáná makolo bakómí kotámbola, bato ba maba bakómí péto, baye bakúfá matói bakómí koyóka, baye bawákí basékwí, mpé babóla bazalí koyóka Nsango Elámu. | |
Matt | LinVB | 11:7 | Ezalákí bangó kokende, Yézu abandí koloba na bato ebelé bazalákí wâná makambo ma Yoáne : « Bokendékí kotála níni o elíkí ? Monkékélé moningání na mompepe tǒ ? | |
Matt | LinVB | 11:8 | Bokendékí kotála náni ? Moto alátí kitóko ? Wápi ! Bato bakolátaka kitóko bakofándaka o ndáko ya bakonzi. | |
Matt | LinVB | 11:9 | Bôngó bokendékí kosála níni ? Kotála proféta ? Ya sôló, nalobí na bínó, alekí baproféta bánso. | |
Matt | LinVB | 11:10 | Mpô ya yě mpenzá bakomí boye : Tálá, natíndí ntóma wa ngáí libosó lya yǒ, ábongisela yǒ nzelá. | |
Matt | LinVB | 11:11 | Ya sôló sôló, nalobí na bínó : O káti ya bána bánso bamamá babótí, mǒkó té alekí Yoáne Mobátisi. Nzókandé óyo azalí moto moké o Bokonzi bwa Likoló alekí yě na bonéne. | |
Matt | LinVB | 11:12 | Ut’o mikolo mya Yoáne Mobátisi kín’o leló bakoyíngela o Bokonzi bwa Likoló na etumba : bobélé bilombé bakoyíngela kúná. | |
Matt | LinVB | 11:13 | Baproféta bánso téé boyéi bwa Yoáne basakólákí bôngó, ekomámí mpé o búku ya Mobéko. | |
Matt | LinVB | 11:16 | Nakokí koloba ’te bato ba leló bazalí lokóla banáni ? Bazalí lokóla bána bafándí o zándo mpé bazalí kobélela báníngá : | |
Matt | LinVB | 11:17 | ‘Tobétélékí bínó mpiólóló mpé bobínákí té ! Toyémbákí nzémbo ya liláká mpé bolelákí té !’ | |
Matt | LinVB | 11:18 | Sôló, Yoáne ayákí : azalákí kolía té, komele mpé té, mpé balobí : ‘Azalí na zábolo !’ | |
Matt | LinVB | 11:19 | Awa Mwána wa Moto ayéí, azalí kolía mpé komele, mpé balobí : ‘Tálá moto wa lokósó, momeli masanga, móníngá wa bafútisi mpáko mpé wa basúmuki’. Nzókandé Bwányá bwa Nzámbe bomónóní sôló o bikelá bya yě. » | |
Matt | LinVB | 11:20 | Na nsima abandí kopálela bato ba bingumbá esíká asálákí makamwísi míngi, zambí babóngólí mitéma té. | |
Matt | LinVB | 11:21 | Alobí : « Mawa na yǒ, Korazín ! Mawa na yǒ, Betsáida ! Mpámba té, sókó makamwísi masálémákí o Tíro mpé o Sidóni lokóla epái ya bínó, mbele babóngóláká mitéma kala na boláti ngóto mpé na bomípakoli mputulú. | |
Matt | LinVB | 11:22 | Ya sôló sôló, nalobí na bínó : mokolo bakokáta makambo ma bato, etúmbu bakopésa bínó ekoleka etúmbu ya Tíro na Sidóni. | |
Matt | LinVB | 11:23 | Mpé yǒ, Kafárnaum, okanísí ’te bakotómbola yǒ kín’o likoló ? Wápi ! Okokita o límfelo. Sókó makamwísi masálémí o mbóka yǒ masálémáká o Sódoma, mbele ebébákí té kín’o leló. | |
Matt | LinVB | 11:24 | Yangó wâná nayébísí yǒ : Mokolo bakokáta makambo ma bato, etúmbu bakopésa yǒ ekoleka etúmbu ya Sódoma. » | |
Matt | LinVB | 11:25 | O ntángo êná Yézu alobí : « Natóndí yǒ, Tatá, Mokonzi wa likoló na nsé, zambí oyébísí bato baké maye obómbélí bato ba bwányá mpé ba mayéle. | |
Matt | LinVB | 11:27 | Tatá wa ngáí apésí ngáí bínso ; moto mǒkó té ayébí Mwána, bobélé Tatá ayébí yě ; mpé moto mǒkó té ayébí Tatá, bobélé Mwána ayébí yě ná mpé moto óyo Mwána alingí kolakisa. | |
Matt | LinVB | 11:29 | Bóndima mókúmbá nakomemisa bínó, mpé bólanda matéya ma ngáí, zambí nazalí motéma bobóto na bosáwa, mpé mitéma mya bínó mikozwa bopémi, | |
Chapter 12
Matt | LinVB | 12:1 | O ntángo êná Yézu azalákí koleka o káti ya elanga ya mbuma ya mámpa, o mokolo mwa sábato. Bayékoli bayókí nzala, babandí kobúka mbuma mpé kolía. | |
Matt | LinVB | 12:2 | Ba-Farizéo bamóní yangó, balobí na yě : « Tálá, bayékoli ba yǒ bazalí kosála makambo mapekísámí o mokolo mwa sábato. » | |
Matt | LinVB | 12:3 | Kasi alobí na bangó : « Botángákí té maye Davídi asálákí ntángo ayókákí nzala, yě na báníngá ba yě ? | |
Matt | LinVB | 12:4 | Ayíngélákí o ndáko ya Nzámbe, mpé yě na báníngá balíákí mámpa ma libonza. Nzókandé kolía mangó epekísámákí na yě mpé na báníngá ba yě ; bobélé banganga Nzámbe bakokákí kolía mangó. | |
Matt | LinVB | 12:5 | Tǒ botángákí o búku ya Mobéko té ’te banganga Nzámbe bakosálaka o Témpelo mokolo mwa sábato bakobúkaka mobéko mwa sábato, kasi bazalí na lisúmu té. | |
Matt | LinVB | 12:7 | Sókó boyébákí ntína ya maloba maye : Nalingí motéma ngolu, leká libonza, mbele botíkákí kokitisa bato bazalí na likambo té. | |
Matt | LinVB | 12:10 | esíká akútí moto mǒkó anyělá lobóko. Mpô ’te bákoka kofúnda yě, batúní yě : « Bakokí ndé kobíkisa moto o mokolo mwa sábato ? » | |
Matt | LinVB | 12:11 | Yézu alobí na bangó : « Náni o ntéi ya bínó, sókó mpatá sé yǒ kó ya yě ekwéí o libúlú o mokolo mwa sábato, akokende kozwa mpé kobimisa yangó té ? | |
Matt | LinVB | 12:12 | Nzókandé moto alekí mpatá mosíká ! Yangó wâná bakokí kosálisa moto o mokolo mwa sábato. » | |
Matt | LinVB | 12:13 | Na nsima alobí na moto ôná : « Tandá lobóko. » Moto atandí lobóko, lokómí malámu lokóla lobóko losúsu. | |
Matt | LinVB | 12:14 | Ba-Farizéo babimí mpé bayókání ’te Yézu asengélí kokúfa. Eyókí Yézu yangó, alongwí kúná. | |
Matt | LinVB | 12:18 | Tálá mosáleli wa ngáí óyo naponí, wa ngáí wa bolingo óyo nakosepelaka míngi. Nakokitisela yě Elímo wa ngáí ; akosangela bikólo bínso mambí ma Bosôló. | |
Matt | LinVB | 12:20 | Monkékélé mogúmbámí, akobúka mwangó té ; móto molingí mózíma, akozímisa mwangó té, libosó ’te álóngisa mambí ma Bosôló. | |
Matt | LinVB | 12:22 | Na nsima bayélí yě moto akangémí na zábolo, akúfá míso, ayébí mpé koloba té. Yézu abíkísí yě. Bôngó moto wa mbúbú akómí koloba mpé komóno. | |
Matt | LinVB | 12:24 | Kasi ba-Farizéo, áwa bayókí bôngó, balobí : « Moto ôná akobenganaka bazábolo sé na ngúyá ya Bélzebul, mokonzi wa bazábolo. » | |
Matt | LinVB | 12:25 | Yézu ayébí makanisi ma bangó, alobí : « Sókó bato ba mokonzi mǒkó bakabwání, bokonzi bwa yě bokoúmela té, mpé sókó bato ba mbóka yǒkó tǒ ba libótá lyǒ kó bakabwání, bokási bwa bangó bokosíla. | |
Matt | LinVB | 12:26 | Bǒ ngó sókó Sátana abengání Sátana mpé akómí mongúná wa yě mǒkó, bóníbóní bokonzi bwa yě bokokí koúmela ? | |
Matt | LinVB | 12:27 | Mpé sókó ngáí nabengání bazábolo na ngúyá ya Bélzebul, bayékoli ba bínó bakobenganaka bangó na ngúyá ya náni ? Bangó mǒkó bakokitisa bínó ! | |
Matt | LinVB | 12:28 | Kasi sókó nakobenganaka bazábolo na ngúyá ya Elímo wa Nzámbe, bóyéba ’te Bokonzi bwa Nzámbe bosílí bobelémí na bínó. | |
Matt | LinVB | 12:29 | Tǒ : Ndéngé níni moto mǒkó akokí kokóto o ndáko ya elombé mpé koyíba bilóko bya yě, sókó libosó akangí yě té ? Bobélé na nsima akokí koyíba bilóko bya ndáko ya yě. | |
Matt | LinVB | 12:30 | Oyo azalí motéma mǒkó na ngáí té, azalí mongúná wa ngáí ; mpé moto akosangisa bato elongó na ngáí té, akopanza bangó. | |
Matt | LinVB | 12:31 | Yangó wâná nayébísí bínó : bakolímbisa bato masúmu ná mafínga mánso, kasi óyo atúkí Elímo, bakolímbisa yě té. | |
Matt | LinVB | 12:32 | Bakolímbisa moto óyo atúmólí Mwána wa Moto, kasi óyo atúmólí Elímo Sántu, bakolímbisa yě té, o nsé eye té, o mokili mosúsu mpé té. | |
Matt | LinVB | 12:33 | Sókó nzeté ezalí elámu, ekobóta mpé mbuma ilámu. Sókó nzeté ezalí ebé, ekobóta mbuma ibé, zambí bakoyébaka nzeté na mbuma ya yangó. | |
Matt | LinVB | 12:34 | Bána ba nyóka, bozalí bato babé, bôngó ndéngé níni bokokí kobimisa maloba malámu ? Sôló, maye matóndí o motéma makobimaka o monoko. | |
Matt | LinVB | 12:35 | Moto malámu akosálaka malámu maye maútí o motéma mwa yě ; moto mabé akosálaka mabé maye matóndí o motéma mwa yě. | |
Matt | LinVB | 12:36 | Nalobí na bínó : o mokolo bakokáta makambo ma bato bakotúna bato mpô ya maloba mánso balobákí sé mpámba. | |
Matt | LinVB | 12:38 | Mokolo mosúsu batéyi ba Mobéko na ba-Farizéo basúsu balobí na yě : « Motéyi, tolingí ólakisa bísó elembo ! » | |
Matt | LinVB | 12:39 | Azóngísélí bangó : « Bínó libótá lya bato babé, bato bakotósaka Nzámbe té, bozalí kosénge elembo. Bakopésa bínó sé elembo ya proféta Yona. | |
Matt | LinVB | 12:40 | Lokóla Yona atíkálákí o libumu lya ebuki ya mbísi mikolo mísáto mpé butú ísáto, sé bôngó Mwána wa Moto akozala o káti ya mabelé mikolo mísáto mpé butú ísáto. | |
Matt | LinVB | 12:41 | Mokolo bakokáta makambo ma bato, bato ba Niníve bakotéleme elongó na bato ba eleko eye, mpé bakokitisa bangó. Mpámba té, bato ba Niníve babóngólákí mitéma mpô ya matéya ma Yona ; kasi moto azalí áwa alekí Yona ! | |
Matt | LinVB | 12:42 | Mokolo bakokáta makambo ma bato, mokonzi mwásí wa Saba akotéleme elongó na bato ba eleko eye, mpé akokitisa bangó. Mpámba té, yě aútákí mosíká mpenzá mpô ya koyóka bwányá bwa Salomó ; kasi moto azalí áwa alekí Salomó ! | |
Matt | LinVB | 12:43 | Ntángo elímo mbindo abimí o nzóto ya moto, akokende kotelengana o elíkí koluka esíká ya kopéma, kasi akozwa té. | |
Matt | LinVB | 12:44 | Bôngó akoloba : ‘Nakozóngela ndáko eye nabimákí’. Ntángo akómí kúná, akútí ndáko mpámba, bakómbí mpé babongísí yangó malámu. | |
Matt | LinVB | 12:45 | Bôngó akeí koluka bilímo nsambo bisúsu, balekí yě na bobé ; bakozónga mpé bikofánda wâná : nsúka ya moto óyo ekozala mabé leká mabé ma libosó. Ekosálema sé bôngó na bato babé ba eleko eye. » | |
Matt | LinVB | 12:46 | Ezalákí Yézu naíno koloba na bato, mamá na bandeko ba yě bayéí ; batélémí o libándá mpé balingí kosolola na yě. | |
Matt | LinVB | 12:47 | Moto mǒkó ayébísí Yézu ’te : « Mamá na bandeko ba yǒ batélémí o libándá, balingí kosolola na yǒ ». | |
Matt | LinVB | 12:48 | Yézu azóngísélí moto ayébísákí yě : « Mamá wa ngáí náni, mpé bandeko ba ngáí banáni ? » | |
Matt | LinVB | 12:49 | Na lobóko alakísí bayékoli ba yě, alobí : « Tálá mamá wa ngáí na bandeko ba ngáí, bangó baye. | |
Chapter 13
Matt | LinVB | 13:2 | Bato ebelé bayéí kozínga yě ; yangó wâná akwélí o bwáto mpé afándí ; bato batélémí o libóngo. | |
Matt | LinVB | 13:3 | Atéyí bangó makambo míngi na miúlání. Alobí : « Moto mǒkó akeí kolóna mbóto o elanga. | |
Matt | LinVB | 13:5 | Mbóto isúsu ikwéí o esíká ya mabángá, izwí mabelé míngi té ; ibimí nokí, zambí ikótókí o mabelé bozindó té ; | |
Matt | LinVB | 13:8 | Mbóto isúsu ikwéí o mabelé malámu, ibótí mbuma : esúsu ebótí mbuma monkámá, esúsu ntúkú motóbá, esúsu ntúkú ísáto. | |
Matt | LinVB | 13:12 | Moto azalí na bilóko akozwa naíno, mpé akokóma na bilóko míngi ; kasi óyo azalí na bilóko té, bakobótolo yě atâ mwâ elóko ezalí na yě. | |
Matt | LinVB | 13:13 | Yangó wâná nakolobaka na bangó na miúlání ; mpô atâ batálí, bazalí komóno té ; mpé atâ bayókí na matói, bazalí koyéba ntína té. | |
Matt | LinVB | 13:14 | Bôngó maloba ma proféta Izáya makosálema na bangó : Atâ bokoyóka ndéngé níni, bokoyéba ntína té. Atâ bokotála ndéngé níni, bokomóno té. | |
Matt | LinVB | 13:15 | Zambí bato ba ekólo eye bakómí na motéma mabé : bazipí matói mpé bakangí míso, mpô ’te bámóno elóko yǒ kó na míso té, báyóka likambo lyǒ kó na matói té, mpé mitéma mya bangó míyóka ntína té. Bôngó bábóngola mitéma té, mpé ngáí nákoka kobíkisa bangó té. | |
Matt | LinVB | 13:16 | Kasi esengo na bínó, zambí míso ma bínó mazalí komóno, mpé matói ma bínó mazalí koyóka. | |
Matt | LinVB | 13:17 | Ya sôló sôló, nalobí na bínó : baproféta na bato ba bosémbo baíké balulákí komónó maye bínó bozalí komóno, kasi bamónókí mangó té ; balingákí koyóka maye bínó bozalí koyóka, kasi bayókákí mangó té ! | |
Matt | LinVB | 13:19 | Sókó moto ayókí Liloba lya Bokonzi, kasi atongólí ntína ya lyangó té, Mobébisi akoyâ kolongola mbóto elónámí o motéma mwa yě : yangó ndé mbóto ekwéí mpembéni ya nzelá. | |
Matt | LinVB | 13:20 | Moto ayambí mbóto o esíká mabángá mazalí, azalí moto óyo ayókí Liloba mpé ayambí lyangó nokí na esengo. | |
Matt | LinVB | 13:21 | Kasi azalí na minsisá o motéma té, andimí sé mokolo mǒkó. Sókó akómí na mpási tǒ na minyóko mpô ya Liloba, akokwéya nokí. | |
Matt | LinVB | 13:22 | Moto ayambí mbóto o káti ya nzúbe, azalí moto óyo ayókí Liloba, kasi makanisi ma bisengo bya nsé na mpósá ya nkita ibomí Liloba. Yangó wâná Liloba libótí mbuma té. | |
Matt | LinVB | 13:23 | Moto ayambí mbóto o mabelé malámu, azalí moto óyo ayókí Liloba, mpé atongólí ntína ya lyangó. Yě akobóta mbuma monkámá, mosúsu ntúkú motóbá, mosúsu ntúkú ísáto. » | |
Matt | LinVB | 13:24 | Yézu alobí na bangó moúlání mosúsu : « Bokonzi bwa Likoló boúlání na moto alónákí mbóto ilámu o elanga ya yě. | |
Matt | LinVB | 13:25 | Kasi ntángo bato balálí mpongí, mongúná ayéí kolóna mbóto ya matíti mabé o káti ya mbuma ya mámpa mpé akeí. | |
Matt | LinVB | 13:27 | Basáli bakeí epái ya nkóló wa elanga, balobí na yě : ‘Mokonzi, olónákí mbóto ilámu o elanga ya yǒ té ? Bôngó matíti mabé maútí wápi ?’ Azóngísí : | |
Matt | LinVB | 13:28 | ‘Mongúná mǒkó asálí bôngó.’ Basáli batúní yě : ‘Olingí tókende kolongola matíti mabé ?’ | |
Matt | LinVB | 13:30 | Bótíka matíti mánso mákóla téé ntángo ya bobúki mbuma ekokí. O ntángo êná nakoloba na basáli : Bósangisa libosó matíti mabé, bókanga mangó mabóké mabóké mpô ya kotumba mangó, na nsima bókende kotíka mbuma ilámu o ebómbelo ya ngáí’. » | |
Matt | LinVB | 13:31 | Yézu alobí na bangó moúlání mosúsu : « Bokonzi bwa Likoló boúlání na mbóto ya sénevé moto mǒkó alónákí o elanga ya yě. | |
Matt | LinVB | 13:32 | Mbóto eye elekí mbóto ínso na boké. Kasi sókó ekólí, elekí ndúnda ínso na bolaí. Ekotanda bitápi lokóla nzeté mpenzá, mpé ndeke ya likoló ikoyâ kofánda wâná. » | |
Matt | LinVB | 13:33 | Alobí na bangó moúlání mosúsu : « Bokonzi bwa Likoló boúlání na nkísi ya mámpa mwásí akamátí mpé asangísí na sǎ ni ísáto ya fufú ya mámpa. Nkísi ebutísí fufú yangó ínso. » | |
Matt | LinVB | 13:35 | Akokísí bôngó maloba ma proféta : Nakofungola monoko mpô ya koloba na miúlání, nakoyébisa maye mabómbámí út’o libandela lya mokili. | |
Matt | LinVB | 13:36 | Na nsima atíkí bato bákende mpé azóngí o ndáko. Bayékoli bayéí epái ya yě mpé batúní yě : « Limbólélá bísó moúlání mwa matíti mabé o elanga. » | |
Matt | LinVB | 13:38 | elanga, yangó ndé mokili ; mbóto ilámu, yangó ndé bána ba Bokonzi ; matíti mabé, mangó ndé bato ba Sátana ; | |
Matt | LinVB | 13:39 | mo-ngúná óyo alóní matíti mabé ezalí zábolo ; eleko ya bobúki mbuma ezalí nsúka ya molóngó, mpé bato bakobúka mbuma, ezalí bǎnzelú. | |
Matt | LinVB | 13:40 | Lokóla bakosangisaka matíti mabé mpé bakobwákaka mangó o móto, ekosálema sé bôngó o nsúka ya molóngó : | |
Matt | LinVB | 13:41 | Mwána wa Moto akotínda bǎnzelú ba yě básangisa o Bokonzi bwa yě bato bánso bapésí esímbisi mpé baye bazangí bosémbo ; | |
Matt | LinVB | 13:43 | Kasi bato ba bosémbo bakongenge lokóla mwésé o Bokonzi bwa Tatá wa bangó. Moto azalí na matói, áyóka ! | |
Matt | LinVB | 13:44 | Bokonzi bwa Likoló boúlání na elóko ya motúya ebómbámí o elanga. Moto mǒkó amóní yangó, kasi abómbí yangó lisúsu. Na esengo enéne akeí kotéke bilóko bya yě bínso mpé asómbí elanga êná. | |
Matt | LinVB | 13:46 | Awa amóní lyǒ kó lya motúya monéne, akeí kotéke bilóko bya yě bínso mpé asómbí liyaka lîná. | |
Matt | LinVB | 13:47 | Bokonzi bwa Likoló boúlání na monyámá babwákí o mbú, mpé motóndí na mbísi ndéngé na ndéngé. | |
Matt | LinVB | 13:48 | Etóndí monyámá, babomi mbísi babéndí mwangó o libóngo ; na nsima bafándí, baponí mbísi ilámu, batíí yangó o bikoló, kasi babwákí iye ya mpámba. | |
Matt | LinVB | 13:49 | Ekozala sé bôngó o nsúka ya molóngó : bǎnzelú bakobima mpé bakokabola bato babé na bato ba bosémbo. | |
Matt | LinVB | 13:52 | Alobí na bangó : « Yangó wâná motéyi wa Mobéko, sókó akómí kondima Bokonzi bwa Likoló, azalí lokóla nkóló wa ndáko azalí na bilóko míngi ; o káti ya bilóko bya yě, akopono biye bya sika mpé biye bya kala ». | |
Matt | LinVB | 13:54 | Ekómí yě o ekólo ya yě, abandí kotéya bato o sinagóga ya bangó. Bakámwí míngi mpenzá, balobí : « Bwányá na ngúyá ya kosála makamwísi, azwí yangó wápi ? | |
Matt | LinVB | 13:55 | Yě mwána wa mokabínda té ? Mamá wa yě María té ? Yakóbo, Yozéfu, Simóni na Yúda bazalí bandeko ba yě té ? | |
Matt | LinVB | 13:57 | Yangó wâná ayókísí bangó mabé mpenzá. Kasi Yézu alobí na bangó : « Bakokínolaka proféta bobélé o ekólo mpé o libótá lya yě. » | |
Chapter 14
Matt | LinVB | 14:2 | « Moto óyo azalí Yoáne Mobátisi. Ntembe té, asékwí o bawá, yangó wâná akokí kosála makamwísi. » | |
Matt | LinVB | 14:3 | Eróde óyo akangísákí Yoáne ; bakangákí yě na minyolólo mpé bakótísákí yě o bolóko mpô ya Erodiáda, mwásí wa ndeko wa yě Filípo, | |
Matt | LinVB | 14:5 | Eróde alingákí koboma yě, kasi abángákí bato, mpô bazalákí kotála yě lokóla proféta. | |
Matt | LinVB | 14:6 | Mokolo Eróde asepélí mokolo mwa mbótama ya yě, mwána mwásí wa Erodiáda, abíní o míso ma bato mpé asepélísí Eróde míngi. | |
Matt | LinVB | 14:8 | Mpô ya malako ma mamá, elengé mwásí alobí na yě : « Pésá ngáí motó mwa Yoáne Mobátisi o sǎ ni. » | |
Matt | LinVB | 14:9 | Mokonzi ayókí mawa, kasi mpô ya ndaí alayákí mpé mpô ya bato babyángémí o limpáti, atíndí ’te bápésa yě mwangó. | |
Matt | LinVB | 14:12 | Bayékoli ba Yoáne bayéí kokamata ebembe mpé bakundí yangó ; na nsima bakeí koyébisa Yézu. | |
Matt | LinVB | 14:13 | Eyókí Yézu nsango êná, akwélí o bwáto mpé akeí o esíká ya kímíá mpô ázala yě mǒkó. Bato bayókí yangó, batíkí mbóka mpé balandí yě na makolo. | |
Matt | LinVB | 14:14 | Elubwí yě o mokili, amóní bato ebelé, ayókélí bangó mawa mpé abíkísí baye bazalákí na bokono. | |
Matt | LinVB | 14:15 | Penepene na butú, bayékoli babelémí mpé balobí na yě : « Awa tokokí kosómba elóko té, mpé ngonga esílí epúsání ; bôngó zóngísá bato bákende kosómba bilóko o mbóka. » | |
Matt | LinVB | 14:16 | Kasi Yézu alobí na bangó : « Basengélí kokende té ; bínó mǒkó bópésa bangó bilóko bálía. » | |
Matt | LinVB | 14:19 | Atíndí bato bánso báfánda o matíti, akamátí mámpa mátáno na mbísi íbalé, atómbólí míso o likoló, asámbélí losámbo la bobenisi. Abúkí mámpa mpé apésí bayékoli. Bakeí kokabolela bato. | |
Matt | LinVB | 14:20 | Bato bánso baléí mpé batóndí ; balokótí mintíka mpé batóndísí bikoló zómi na bíbalé ! | |
Matt | LinVB | 14:22 | Sé o ntángo êná, Yézu atíndí bayékoli bákwéla o bwáto mpé bákátisa ngámbo, bákóma libosó la yě, yě átíkala kozóngisa bato. | |
Matt | LinVB | 14:23 | Esílísí yě kozóngisa bato, abutí ngómbá mpô ya kosámbela yě mǒkó. Téé butú azalákí wâná yě mǒkó. | |
Matt | LinVB | 14:24 | Bwáto bosílí bokómí o káti ya etíma, mbóngé iningísí bwangó, mpé mompepe mozalákí kozóngisa bwáto nsima. | |
Matt | LinVB | 14:26 | Awa bayékoli bamóní ’te azalákí kotámbola likoló lya mái, mayéle ma bangó mabúlúngání, balobí : « Ezalí elímá » ; mpé babandí kogánga na nsómo. | |
Matt | LinVB | 14:28 | Pétro alobí : « Mokonzi, sókó ezalí yǒ, lobá ’te nátámbola likoló lya mái, mpé náyâ epái ya yǒ. » | |
Matt | LinVB | 14:29 | Yézu alobí : « Yáká. » Pétro atíkí bwáto, abandí kotámbola likoló lya mái mpô ya kokende epái ya Yézu. | |
Matt | LinVB | 14:30 | Kasi áwa amóní ’te mompepe mozalákí makási, akomí kobánga mpé abandí kozinda, ágángí : « Mokonzi, bíkísá ngáí ! » | |
Matt | LinVB | 14:31 | Yézu atandí lobóko, asímbí yě mpé alobí na yě : « Moto wa boyambi boké, mpô níni otíákí ntembe ? » | |
Matt | LinVB | 14:33 | Baye bazalákí o bwáto bakúmbámélí yě, balobí : « Ya sôló, yǒ ozalí Mwána wa Nzámbe ! » Yézu abíkísí bato ba Genézarete | |
Matt | LinVB | 14:35 | Bato ba esíká êná bamóní ’te ezalákí yě, batámbwísí nsango o ekólo mobimba. Bayélí yě bato bánso ba bokono ; | |
Chapter 15
Matt | LinVB | 15:1 | Mokolo mǒkó ba-Farizéo na batéyi ba Mobéko baútí o Yerúzalem babelémí na Yézu, balobí na yě : | |
Matt | LinVB | 15:2 | « Mpô níni bayékoli ba yǒ bakobúkaka mibéko bankóko batíkélákí bísó ? Tálá, libosó lya kolía bakosukolaka mabóko té. » | |
Matt | LinVB | 15:3 | Yézu alobí : « Bôngó bínó, mpô níni bokobúkaka mobéko mwa Nzámbe mpô ya kotósa mibéko miútí na bínó mǒkó ? | |
Matt | LinVB | 15:4 | Mpô Nzámbe alobí : Memyá tatá na mamá, mpé : Moto atómbélí tatá tǒ mamá wa yě mabé, báboma yě. | |
Matt | LinVB | 15:5 | Kasi bínó bokolobaka ’te : Sókó moto alobí na tatá tǒ na mamá : ‘Bilóko nakokákí kopésa bínó, nakobonzela byangó na Nzámbe’, | |
Matt | LinVB | 15:6 | moto ôná asengélí kosálisa tatá na mamá lisúsu té ; mpé bobomí bôngó liloba lya Nzámbe sé mpô ya kolanda mibéko miútí na bínó mǒkó. | |
Matt | LinVB | 15:8 | Bato baye bakokúmisaka ngáí sé na monoko, kasi mitéma mya bangó mizalí mosíká na ngáí. | |
Matt | LinVB | 15:9 | Bokúmisi bakokúmisaka ngáí bozalí sé mpámba ; matéya bakotéyaka mazalí sé bitíndá bya bato. » | |
Matt | LinVB | 15:11 | Elóko ekótí o monoko ekokómisa moto mbindo té ; kasi eye ebimí o monoko ekokómisa yě mbindo. » | |
Matt | LinVB | 15:12 | Bayékoli babelémí mpé balobí na yě : « Oyébí ’te maloba ma yǒ mayókísí ba-Farizéo mabé. » | |
Matt | LinVB | 15:14 | Bótíka bangó : bazalí bato ba lolandá bakokambaka bato ba lolandá ! Sókó moto akúfá míso akambí móníngá akúfá mpé míso, bangó bábalé bakokwâ o libúlú. » | |
Matt | LinVB | 15:17 | Boyébí té ’te elóko ekótí o monoko ekoleka o libumu, mpé na nsima ekokende o zongo ? | |
Matt | LinVB | 15:19 | Zambí o motéma ekobima mikáno mabé, bobomi, bokáli, ekóbo, boyíbi, maloba ma banzénénéké ba lokutá na songísongí. | |
Matt | LinVB | 15:20 | Makambo mâná makobébisa moto. Kasi kolía na mabóko masukwámí té, ekokómisa moto mbindo té. » | |
Matt | LinVB | 15:22 | Mwásí mǒkó wa Kanána aútí o ekólo êná, ayéí mpé agángí : « Mokonzi, mwána wa Davídi, yókélá ngáí mawa. Zábolo mǒkó azalí konyókolo mwána mwásí wa ngáí míngi. » | |
Matt | LinVB | 15:23 | Kasi Yézu azóngísélí yě liloba lyǒkó té. Bayékoli bayéí kobóndela yě : « Ndimélá yě, zambí azalí kolanda bísó na bogángi bwa yě ». | |
Matt | LinVB | 15:24 | Yézu azóngísí : « Batíndí ngáí bobélé epái ya mpatá ibúngámí ya libótá lya Israél. » | |
Matt | LinVB | 15:26 | Azóngísélí yě : « Ebongí té ’te bákamata mámpa ma bána mpé bábwákela mango bána ba mbwá. » | |
Matt | LinVB | 15:27 | Mwásí azóngísí : « Sôló, Mokonzi, kasi bána ba mbwá bakolíaka mpumbulú ikwéí o nsé ya méza ya bankóló ba bangó ! » | |
Matt | LinVB | 15:28 | Sikáwa Yézu azóngísélí yě : « E mamá, ozalí na boyambi bonéne ! Ésálema lokóla oséngí ! » Mpé bandá ntángo êná mwána mwásí wa yě abíkí. | |
Matt | LinVB | 15:29 | Yézu alongwí wâná, akeí lisúsu epái ya etíma ya Galiléa. Abutí ngómbá, afándí wâná. | |
Matt | LinVB | 15:30 | Bato ebelé bayéí epái ya yě na bato ba mbengo, baye baléméné mabóko, bato ba lolandá, ba-ebúbú, ná mpé basúsu míngi ; batíí bangó o bosó bwa Yézu ; mpé yě abíkísí bangó. | |
Matt | LinVB | 15:31 | Bôngó bato bakámwí míngi mpenzá, áwa bamóní baye bazalákí ebúbú bakómí koloba, baye baléméné mabóko bakómí nzóto kólóngónú, bato ba mbengo bakómí kotámbola, baye bakúfá míso bakómí komóno ; mpé bakúmísí Nzámbe wa Israél. | |
Matt | LinVB | 15:32 | Nzókandé Yézu abéngí bayékoli ba yě, alobí na bangó : « Nayókélí bato baye mawa, mpô bazalí na ngáí mikolo mísáto mpé bazalí na elóko ya kolía té. Nalingí kozóngisa bangó na nzala té, mbele bakokwéya o nzelá. » | |
Matt | LinVB | 15:33 | Bayékoli balobí na yě : « Awa o esóbé tokokí kozwa mámpa ma koléisa bato ebelé boye epái wápi ? » | |
Matt | LinVB | 15:34 | Yézu atúní bangó : « Bozalí na mámpa bóní ? » Balobí : « Nsambo, na mwâ mbísi iké. » | |
Matt | LinVB | 15:36 | akamátí mámpa nsambo na mbísi, atóndí Nzámbe, abúkí mámpa mpé apésí bayékoli ba yě ; bangó bakeí kokabolela bato. | |
Chapter 16
Matt | LinVB | 16:1 | Ba-Farizéo na ba-Saduséo bayéí epái ya Yézu. Mpô ya komeka yě, baséngí yě álakisa bangó elembo eútí o likoló. | |
Matt | LinVB | 16:2 | Azóngísélí bangó : « Na mpókwa bokolobaka : Lóbí mói mokozala, mpô likoló litelí ngwá. | |
Matt | LinVB | 16:3 | Na ntóngó bokolobaka : Leló mbúla ekonóko, mpô likoló liíndí míngi. Sôló, boyébí kolimbola bilembo bikolakisa ’te mbúla ekonóko tǒ té, kasi bilembo bikolakisa ntína ya eleko eye, boyébí byangó té ! | |
Matt | LinVB | 16:4 | Bozalí libótá lya bato babé, bato bakotósaka Nzámbe té ; bozalí kosénge elembo, kasi bakopésa bínó bobélé elembo ya Yona. » Atíkí bangó wâná mpé akeí. | |
Matt | LinVB | 16:6 | Yézu alobí na bangó : « Bótála malámu ! Bókéba na nkísi ba-Farizéo na ba-Saduséo bakotíaka o mámpa ! » | |
Matt | LinVB | 16:8 | Kasi Yézu ayókí yangó, alobí : « Bínó bato ba boyambi boké, bokanísí ’te nalobí bôngó mpô bokamátí mámpa té. | |
Matt | LinVB | 16:9 | Boyókí naíno ntína té ? Bobósání ndé ndéngé naléísákí bato nkóto ítáno na mámpa mátáno ? Mpé bikoló bóní botóndísákí na mintíka ? | |
Matt | LinVB | 16:10 | Bobósání mpé mámpa nsambo napésákí bato nkóto ínei, mpé bikoló bóní botóndísákí na mintíka ? | |
Matt | LinVB | 16:11 | Ndéngé níni boyókí té ’te nalobákí bôngó mpô ya mámpa té ? Nalobákí ’te bókéba na nkísi ba-Farizéo na ba-Saduséo bakotíaka o mámpa ! » | |
Matt | LinVB | 16:12 | Sikáwa bayékoli bayébí ’te alobákí bôngó mpô ya nkísi ya mámpa té, kasi mpô ya matéya ma ba-Farizéo mpé ma ba-Saduséo. | |
Matt | LinVB | 16:13 | Ekómí Yézu o mokili mwa Sezaréa ya Filípo, atúní bayékoli ba yě : « Bato bakolobaka ’te Mwána wa Moto azalí náni ? » | |
Matt | LinVB | 16:14 | Bayanólí : « Basúsu bakolobaka ’te azalí Yoáne Mobátisi ; basúsu : Elía ; basúsu naíno : Yeremía tǒ mǒkó wa baproféta. » | |
Matt | LinVB | 16:17 | Yézu azóngísélí yě : « Esengo na yǒ, Simóni, mwána wa Yona, zambí moto wa nsuni na makilá ayébísí yǒ yangó té, kasi Tatá wa ngáí azalí o likoló. | |
Matt | LinVB | 16:18 | Bôngó, ngáí nayébísí yǒ : Nkómbó ya yǒ Pétro, lokóla ’te libángá ; mpé o libángá liye nakotó-nga Eklézya ya ngáí, mpé atâ likoki lya liwá likolónga yangó té. | |
Matt | LinVB | 16:19 | Nakopésa yǒ mafungóla ma Bokonzi bwa Likoló : mánso okokanga o nsé, makokangama o likoló, mpé mánso okokangola o nsé, makokangolama o likoló. » | |
Matt | LinVB | 16:21 | Ut’o mokolo môná Yézu abandí koyébisa bayékoli ba yě ’te asengélí kokende o Yerúzalem. Kúná bakóló, banganga bakonzi na batéyi ba Minkandá bakoyókisa yě mpási míngi, bakoboma yě ; kasi nsima ya mikolo mísáto akosékwa. | |
Matt | LinVB | 16:22 | Pétro abéndí yě mpembéni, ameki kobóngala makanisi ma yě, alobí : « Nzámbe ábátela yǒ, Mokonzi, makambo mâná makokwêla yǒ mokolo mǒkó té ! » | |
Matt | LinVB | 16:23 | Yézu amíbóngólí epái ya Pétro, alobí na yě : « Longwá, Sátana ! Ozalí kotíela ngáí libakú, zambí makanisi ma yǒ maútí na Nzámbe té, maútí sé na bato. » | |
Matt | LinVB | 16:24 | Na nsima Yézu alobí na bayékoli ba yě : « Sókó moto alingí kozala moyékoli wa ngáí, ámíbóya, ámeme kurúse ya yě mpé álanda ngáí. | |
Matt | LinVB | 16:25 | Zambí moto alingí kobíkisa bomoi bwa yě, akobúngisa bwangó ; kasi moto akobúngisa bomoi bwa yě mpô ya ngáí, akozwa bwangó lisúsu. | |
Matt | LinVB | 16:26 | Atâ moto azwí mokili mobimba, sókó yě mǒkó abúngámí, akozwa litómba níni ? Mpé sókó moto abúngísí bomoi bwa yě, akosómba bwangó lisúsu na níni ? | |
Matt | LinVB | 16:27 | Mwána wa Moto asengélí koyâ na nkémbo ya Tatá wa yě, elongó na bǎnzelú ba yě ; mpé o ntángo êná akopésa moto na moto lifúta likokí na ezalela ya yě. | |
Chapter 17
Matt | LinVB | 17:1 | Nsima ya mikolo motóbá Yézu akamátí Pétro, Yakóbo na ndeko wa yě Yoáne, akeí na bangó o esíká ya kímíá o ngómbá esándá. | |
Matt | LinVB | 17:2 | Abóngwání na nzóto o míso ma bangó : elongi ya yě ekómí kongenge lokóla mwésé, bilambá bya yě bikómí mpémbé lokóla mwinda. | |
Matt | LinVB | 17:4 | Pétro alobí na yě : « Mokonzi, kozala áwa ezalí malámu míngi. Sókó olingí, nápika biéma bísáto áwa : yǒ kó ya yǒ, yǒ kó ya Móze, yǒ kó ya Elía. » | |
Matt | LinVB | 17:5 | Ntángo azalákí koloba bôngó, limpata lingengí lokóla mói liyéí kozipa bangó, mpé loláká lolobí út’o limpata : « Oyo azalí Mwána wa ngáí wa bolingo, nakosepelaka yě míngi ; bóyóka yě. » | |
Matt | LinVB | 17:9 | Ntángo bazalákí kokita ngómbá, Yézu apekísí bangó, yě ’te : « Maye bomónókí, bóloba mangó na moto mǒkó té, téé mokolo Mwána wa Moto akosékwa o bawá ». | |
Matt | LinVB | 17:10 | Bayékoli batúní yě motúna moye : « Mpô níni batéyi ba Mobéko bakolobaka ’te libosó Elía asengélí koyâ ? » | |
Matt | LinVB | 17:12 | kasi ngáí nalobí na bínó : Elía asílí ayákí, kasi bandimákí yě té, mpé basálákí na yě lokóla bangó mǒkó balingákí. Sé bôngó bakoyókisa Mwána wa Moto mpási ». | |
Matt | LinVB | 17:15 | « Mokonzi, yókélá mwána wa ngáí mawa, azalí na bokono bwa bonsíngá, azalí koyóka mpási míngi : mbala míngi akokwéyaka o móto tǒ o mái. | |
Matt | LinVB | 17:17 | Yézu azóngísí : « Bínó, lisangá lya bato bazángí boyambi, bato babébá ! Mikolo bóní názala naíno na bínó ? Mikolo bóní nákanga naíno motéma na makambo ma bínó ? Bóyâ na yě. » | |
Matt | LinVB | 17:19 | Bayékoli bayéí epái ya Yézu ; ntángo bazalákí na yě bobélé bangó mǒkó, batúní yě : « Mpô níni tokokákí kobengana yě tě ? » | |
Matt | LinVB | 17:20 | Alobí na bangó : « Mpô bozalí na boyambi boké. Ya sôló sôló, nalobí na bínó : sókó bozalí atâ na mwâ boyambi lokóla mbóto ya sénevé bokoloba na ngómbá eye : ‘Longwá áwa, kendé kúná’, ekosálema. Likambo lyǒ kó té lilekí bínó na bokási. » ( | |
Matt | LinVB | 17:22 | Ntángo bazalákí elongó o Galiléa, Yézu alobí na bangó : « Bakokaba Mwána wa Moto o mabóko ma bato, | |
Matt | LinVB | 17:23 | bakoboma yě, kasi akosékwa o mokolo mwa mísáto. » Maloba mâná mayókísí bangó mawa míngi o mitéma. | |
Matt | LinVB | 17:24 | Ezóngí bangó o Kafárnaum, bafútisi mpáko ba Témpelo bayéí epái ya Pétro, batúní : « Motéyi wa bínó akofútaka mpáko ya Témpelo té ? » | |
Matt | LinVB | 17:25 | Pétro azóngísí : « Akofútaka. » Ekótí yě o ndáko, Yézu abandí koloba libosó, atúní : « Simóni, okanísí níni : Bakonzi ba nsé bakofútisaka banáni mpáko ? Bána mbóka tǒ bato basúsu ? » | |
Matt | LinVB | 17:26 | Pétro ayanólí : « Bato basúsu. » Yézu azóngísí : « Bôngó bána mbóka bakofútaka té ! | |
Chapter 18
Matt | LinVB | 18:1 | O ntángo êná bayékoli bayéí epái ya Yézu, batúní yě : « Náni alekí monéne o Bokonzi bwa Likoló ? » | |
Matt | LinVB | 18:3 | alobí : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Sókó bobóngwání té, mpé bokómí lokóla bána baké té, bokoyíngela o Bokonzi bwa Likoló té. | |
Matt | LinVB | 18:4 | Bôngó, moto akomíkómisa moké lokóla mwána óyo, yě alekí monéne o Bokonzi bwa Likoló. | |
Matt | LinVB | 18:6 | Kasi óyo apésí esímbisi na mǒkó wa bána baye bayambí ngáí, elekí malámu bákanga yě libángá linéne o nkíngó, liye mpúnda ikobóngolaka mpô ya koníka fufú, mpé bábwáka yě o mbú bozindó. | |
Matt | LinVB | 18:7 | Mawa na mokili mpô ya bato bakopésa esímbisi ! Sôló, bisímbisi bikokí kozánga té, kasi mawa na moto akopésa esímbisi ! | |
Matt | LinVB | 18:8 | Sókó lobóko tǒ lokolo la yǒ lokokwêisaka yǒ o masúmu, kátá langó, mpé bwáká langó mosíká : malámu óyíngela o (bwa lobíko) Bomoi na lobóko lǒ kó tǒ na lokolo lǒkó, kasi bábwáka yǒ na mabóko tǒ na makolo mábalé o móto mwa sékô té. | |
Matt | LinVB | 18:9 | Sókó líso lya yǒ likokwêisaka yǒ o masúmu, longólá lyangó mpé bwáká lyangó mosíká. Malámu óyíngela o Bomoi (bwa lobíko) na líso lyǒ kó, kasi bábwáka yǒ na míso mábalé o límfelo té. | |
Matt | LinVB | 18:10 | Bókéba ’te bókínola mǒkó wa bána baye té, zambí nayébísí bínó : bǎnzelú ba bangó bakomónoko ntángo ínso elongi ya Tatá wa ngáí azalí o likoló. ( | |
Matt | LinVB | 18:12 | Bokanísí níni ? Sókó moto azalí na mpatá monkámá, mpé mpatá yǒ kó ebúngámí, akotíka mpatá ntúkú libwǎ na libwǎ o ngómbá té mpô ya koluka eye ebúngámí ? | |
Matt | LinVB | 18:13 | Ya sôló sôló, nalobí na bínó : sókó azwí yangó, akoyóka esengo leká esengo ya kozala na mpatá ntúkú libwǎ na libwǎ iye ibúngámí té. | |
Matt | LinVB | 18:15 | Sókó ndeko wa yǒ asálí mabé, kendé kokútana na yě mpé pálélá yě ; bózala sé bínó bábalé. Sókó andimí maloba ma yǒ, ozwí yě lisúsu lokóla ndeko. | |
Matt | LinVB | 18:16 | Sókó andimí té, kamátá naíno moto mǒkó tǒ bato bábalé, likambo líkoka kosíla o míso ma banzénénéké bábalé tǒ básáto. | |
Matt | LinVB | 18:17 | Sókó abóyí koyóka bangó, yébísá yangó o lisangá lya Eklézya. Sókó abóyí mpé koyóka lisangá lya Eklézya, bótála yě lokóla mopagáno tǒ mofútisi mpáko. | |
Matt | LinVB | 18:18 | Ya sôló sôló, nalobí na bínó : mpô ínso bokokanga áwa o nsé, bakokanga yangó mpé o likoló ; mpô ínso bokokangola áwa o nsé, bakokangola yangó mpé o likoló. | |
Matt | LinVB | 18:19 | Sé bôngó, nalobí na bínó ya sôló : sókó áwa o nsé bato bábalé bayókání ’te bakosénge atâ elóko níni, Tatá wa ngáí akopésa bangó yangó, | |
Matt | LinVB | 18:20 | zambí esíká bato bábalé tǒ básáto basangání mpô ya nkómbó ya ngáí, nazalí o ntéi ya bangó. » | |
Matt | LinVB | 18:21 | Bôngó Pétro abelémí, atúní yě : « Mokonzi, sókó ndeko wa ngáí asálí ngáí mabé, nálímbisa yě mbala bóní, kíná mbala nsambo ? » | |
Matt | LinVB | 18:22 | Yézu azóngísí : « Nalobí na yǒ : Kíná mbala nsambo té, kasi mbala ntúkú nsambo mbala nsambo. | |
Matt | LinVB | 18:23 | Bôngó, Bokonzi bwa Likoló boúlání na mokonzi óyo alingí kosílisa makambo ma nyongo na basáleli ba yě. | |
Matt | LinVB | 18:24 | Ebandí yě kotála minkandá mya nyongo, bayélí yě moto mǒkó azalákí na nyongo ya talénta nkóto zómi. | |
Matt | LinVB | 18:25 | Azalákí na elóko ya kofúta nyongo ya yě té. Yangó wâná mokonzi atíndí ’te bátéke yě, ná mwásí ná bána ná bilóko bya yě bínso mpô ’te ásílisa nyongo. | |
Matt | LinVB | 18:26 | Kasi mosáleli amíbwákí o bosó bwa yě, akúmbámí, atíkálí bôngó mpé abóndélí yě, alobí : ‘Pésá ngáí mwâ mikolo, mpé nakofúta yǒ nyónso’. | |
Matt | LinVB | 18:28 | Ebimí mosáleli óyo, akútání na móníngá wa mosálá azalákí na nyongo ya yě ya denário monkámá. Akangí yě o nkíngó, afiní yě makási, alobí : ‘Fútá nyongo ya ngáí’. | |
Matt | LinVB | 18:29 | Móníngá amíbwákí o bosó bwa yě, abóndélí yě, alobí : ‘Pésá ngáí mwâ mikolo, mpé nakofúta yǒ. | |
Matt | LinVB | 18:31 | Ntángo báníngá bamóní yangó, bayókí mawa míngi, mpé bakeí koyébisa likambo lyangó na mokonzi wa bangó. | |
Matt | LinVB | 18:32 | Mokonzi abéngí yě mpé alobí : ‘Mosáleli mabé, nalímbísí yǒ nyongo ínso mpô obóndélákí ngáí. | |
Matt | LinVB | 18:34 | Mpé na nkándá enéne mokonzi akabí yě o mabóko ma banyókoli téé ásílisa kofúta nyongo mobimba. | |
Chapter 19
Matt | LinVB | 19:1 | Esílísí Yézu koloba bôngó, alongwí o Galiléa mpé akeí o mokili mwa Yudéa o ngámbo ya Yordáne. | |
Matt | LinVB | 19:3 | Ba-Farizéo bayéí epái ya yě, mpô ya komeka yě batúní yě : « Mobáli akokí kobóya mwásí wa yě na ntína atâ níni ? » | |
Matt | LinVB | 19:4 | Ayanólí bangó : « Botángí té ’te o libandela Mozalisi asáláká bangó mobáli na mwásí, | |
Matt | LinVB | 19:5 | mpé bóníbóní alobáká : Bôngó, mobáli akotíka tatá na mamá, mpé akofánda na mwásí wa yě ; bangó bábalé bakokóma sé moto mǒkó ? | |
Matt | LinVB | 19:6 | Yangó wâná bazalí lisúsu bato bábalé té, kasi sé móto mǒkó. Bôngó, oyo ekangí Nzámbe, moto ákangola yangó té. » | |
Matt | LinVB | 19:7 | Balobí na yě : « Kasi mpô níni Móze atíndáká ’te bákoma monkandá mwa bobomi libála sókó moto alingí kolongola mwásí ? » | |
Matt | LinVB | 19:8 | Ayanólí : « Móze alingísákí bínó ’te bólongola básí ba bínó mpô ya mitéma libángá mya bínó, kasi o libandela ezaláká bôngó té. | |
Matt | LinVB | 19:9 | Yangó wâná nalobí na bínó : sókó mobáli abengání mwásí wa yě –tíká sé sókó bafándí libála lipekísámí na mibéko– mpé abálí mwásí mosúsu, asálí bokáli. » | |
Matt | LinVB | 19:10 | Bayékoli balobí na yě : « Sókó o libála ezalí bôngó na mobáli mpé na mwásí, elekí malámu moto ábála té. » | |
Matt | LinVB | 19:11 | Yézu azóngísélí bangó : « Bato bánso bayébí ntína ya maloba maye té, sé baye bazwí mayéle ma koyéba mangó. | |
Matt | LinVB | 19:12 | Sôló, basúsu bakokí na libála té út’o mokolo babótá bangó ; basúsu bakokí na libála té, zambí bato balongólí makási ma bangó ; mpé basúsu bakokí na libála té, zambí bangó mǒkó balingí bôngó mpô ya Bokonzi bwa Likoló. Oyo akokí koyóka ntína ya yangó, áyóka ! » | |
Matt | LinVB | 19:13 | Bayéí na bána baké mpô ’te átíela bangó mabóko mpé ábenisa bangó ; kasi bayékoli bapekísí bangó. | |
Matt | LinVB | 19:14 | Yézu alobí : « Bótíka bána baké báyâ, bópekisa bangó té koyâ epái ya ngáí, zambí bato baúlání na bangó bakoyíngela o Bokonzi bwa Likoló. » | |
Matt | LinVB | 19:16 | Mokolo mosúsu moto mǒkó ayéí kotúna yě : « Motéyi, malámu níni nasengélí kosála mpô ’te názwa bomoi bwa lobíko ? » | |
Matt | LinVB | 19:17 | Yézu alobí na yě : « Mpô níni otúní ngáí níni ezalí malámu ? Sé Nzámbe azalí malámu. Sókó olingí koyíngela o bomoi, tósá mibéko ». | |
Matt | LinVB | 19:18 | Atúní lisúsu : « Mibéko níni ? » Yézu alobí : « Oboma moto té, ósála bokáli té, óyíba té, ózala nzénénéké wa lokutá té, | |
Matt | LinVB | 19:21 | Yézu alobí : « Sókó olingí kobongo nyé, téké bilóko bya yǒ, kabélá babóla mosolo, okozwa nkita o likoló ; na nsima yáká, landá ngáí. » | |
Matt | LinVB | 19:23 | Yangó wâná Yézu alobí na bayékoli ba yě : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : moto wa nkita akoyíngela o Bokonzi bwa Likoló bobélé na mpási. | |
Matt | LinVB | 19:24 | Kútu, mokulu mwa nsúki ya kaméla ekoleka o lilusú lya ntonga na mpási sôló, kasi mpô ’te moto wa nkita áyíngela o Bokonzi bwa Likoló, elekí mpási ! » | |
Matt | LinVB | 19:25 | Bayékoli bakámwí na maloba mâná míngi mpenzá, batúní yě : « Bôngó náni akokí kobíka ? » | |
Matt | LinVB | 19:26 | Yézu atálí bangó, alobí : « Bato bakokí na likambo liye té, sôló ; kasi likambo lyǒkó lilekí Nzámbe na bokási té. » | |
Matt | LinVB | 19:27 | Na nsima Pétro alobí na yě : « Tálá, bísó totíkí bínso mpô tólanda yǒ, bôngó tokozwa níni ? » | |
Matt | LinVB | 19:28 | Yézu alobí na bangó : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : bínó bato bolandí ngáí : mokolo mokili mokobóngwana, ntángo Mwána wa Moto akofánda o ngwendé ya nkémbo, bínó mpé bokofánda o kíti zómi na íbalé mpô ya koyángela mabótá zómi na mábalé ma Israél. | |
Matt | LinVB | 19:29 | Moto nyónso atíkí ndáko, bandeko babáli na básí, tatá, mamá, bána tǒ bilanga, mpô ya nkómbó ya ngáí, akozwa bilóko bilekí mpenzá biye atíkákí, akozwa mpé bomoi bwa lobíko. | |
Chapter 20
Matt | LinVB | 20:1 | « O Bokonzi bwa Likoló bouláni na nkóló wa elanga óyo abimí na ntá ntóngó, mpô ázwa bato básála o elanga ya yě ya víno. | |
Matt | LinVB | 20:2 | Bayókání ’te akofúta bangó denário yǒ kó na mokolo, mpé atíndí bangó o elanga ya yě. | |
Matt | LinVB | 20:5 | Bakeí. Abimí lisúsu penepene na midí, mpé o ngonga ya ísáto ya mpókwa asálí sé bôngó. | |
Matt | LinVB | 20:6 | Abimí lisúsu o ngonga ya ítáno ya mpókwa mpé akútí basúsu batélémí wâná, alobí na bangó : ‘Mpô níni bokosálaka elóko yǒ kó té mói mobimba ?’ | |
Matt | LinVB | 20:7 | Balobí na yě : ‘Moto mǒkó té akamátí bísó o mosálá.’ Alobí na bangó : ‘Bínó mpé bókende o elanga ya ngáí’. | |
Matt | LinVB | 20:8 | Penepene na butú, nkóló wa elanga alobí na kapíta : ‘Bêngá basáli, pésá mǒkó mǒkó lifúta lya yě ; bandá na bato ba nsima téé bato ba libosó.’ | |
Matt | LinVB | 20:10 | Ntángo ekómí ngala ya baye bayákí libosó, bakanísí ’te bakobakisela bangó mosolo, kasi bangó mpé bazwí mǒkó mǒkó denário yǒ kó. | |
Matt | LinVB | 20:12 | ‘Baye bayákí nsima basálí mosálá sé ngonga yǒkó, mpé ofútí bangó lokóla bísó bato toyókí mpási na molungé mói mobimba’. | |
Matt | LinVB | 20:13 | Nkóló azóngísélí mǒkó wa bangó, alobí : ‘Ndeko, nasálí yǒ mabé té ; toyókánákí té ’te nakofúta bínó denário yǒ kó ? | |
Matt | LinVB | 20:14 | Kamátá mosolo mwa yǒ mpé kendé. Nalingí kofúta óyo ayákí nsima lokóla nafútákí yǒ. | |
Matt | LinVB | 20:15 | Na bilóko bya ngáí nakokí kosála té lokóla ngáí mǒkó nalingí ? Tǒ oyókí zúwa mpô nasálí malámu ?’ | |
Matt | LinVB | 20:16 | Tálá bóníbóní basúsu bayákí nsima, bakozala bato ba libosó, mpé bato basúsu ba libosó bakozala bato ba nsima. » (« Zambí bato babyángémí bazalí míngi, kasi baye baponómí bazalí míngi té. ») | |
Matt | LinVB | 20:17 | Elingí Yézu kokende o Yerúzalem, akeí sé na bato ba yě zómi na bábalé ; o nzelá alobí na bangó : | |
Matt | LinVB | 20:18 | « Tozalí kokende o Yerúzalem ; kúná bakokaba Mwána wa Moto o mabóko ma banganga bakonzi na batéyi ba Mobéko ; bakokitisa yě o liwá, | |
Matt | LinVB | 20:19 | mpé bakokaba yě o mabóko ma bapagáno mpô ’te báfínga yě, bábéte yě fímbo mpé báboma yě o kurúse, kasi akosékwa o mokolo mwa mísáto. » | |
Matt | LinVB | 20:20 | Na nsima mamá wa bána ba Zebedéo, yě na bána ba yě, abelémí na yě mpé akúmbámí mpô ya kosénge yě mpô yǒ kó. | |
Matt | LinVB | 20:21 | Yézu alobí na yě : « Olingí níni ? » Ayanolí yě : « Tálá bána babáli ba ngáí bábalé, sálá ’te báfánda o Bokonzi bwa yǒ, mǒkó o lobóko la yǒ la mobáli, mosúsu o lobóko la yǒ la mwásí. » | |
Matt | LinVB | 20:22 | Yézu azóngísí : « Boyébí té níni bozalí kosénge. Bokokí ndé komele nkéni eye ngáí nakomele ? » Bazóngísí : « Tokokí. » | |
Matt | LinVB | 20:23 | Yézu alobí : « Malámu, bokomele nkéni eye nakomele ; kasi kofándisa moto o lobóko la ngáí la mobáli tǒ la mwásí, etálí ngáí té ; baye bakofánda o bisíká bîná ezalí baye Tatá wa ngáí aléngélélí bangó. » | |
Matt | LinVB | 20:25 | Yézu abéngí bangó, alobí : « Boyébí ’te bakonzi ba nsé bakoyángelaka bato ba bangó na makási, mpé bato banéne bakoyókisaka bangó ’te bazalí bakonzi. | |
Matt | LinVB | 20:26 | Kasi o káti ya bínó ekokí kozala bôngó té : óyo alingí kozala moto monéne o káti ya bínó, akozala mosáleli wa bínó ; | |
Matt | LinVB | 20:28 | sé lokóla Mwána wa Moto ayéí té mpô ’te básálela yě, kasi mpô ’te ásálela bato mpé ákaba bomoi bwa yě mpô ya kobíkisa bato ebelé. » | |
Matt | LinVB | 20:30 | Bato ba lolandá bábalé bafándí wâná mpembéni ya nzelá. Eyókí bangó ’te Yézu azalákí koleka, bagángí : « Mokonzi, Mwána wa Davídi, yókélá bísó mawa ! » | |
Matt | LinVB | 20:31 | Bato bánso bapálélí bangó ’te bákanga monoko ; kasi baléndísí sé kogánga makási : « Mokonzi, Mwána wa Davídi, yókélá bísó mawa ! » | |
Chapter 21
Matt | LinVB | 21:1 | Ebelémí bangó na Yerúzalem, bakómí penepene na Bétfage, o ngómbá ya Olíva. Yézu atíndí bayékoli bábalé, | |
Matt | LinVB | 21:2 | alobí na bangó : « Bókende o mbóka ezalí wâná libosó lya bínó. Mosíká té bokomóno mpúnda mwásí ekangémí wâná na mwána wa yangó. Bófungola yangó mpé bóyâ na yangó áwa. | |
Matt | LinVB | 21:3 | Sókó moto atúní bínó, bóloba ’te Mokonzi asengélí na yangó, kasi akozóngisa yangó nokí. » | |
Matt | LinVB | 21:5 | « Bóloba na bato ba Sion : Tálá, Mokonzi wa yǒ akoyâ epái ya yǒ. Azalí motéma bobóto ; mpúnda akobutela ezalí na mwána. » | |
Matt | LinVB | 21:7 | Bayéí na mpúnda mpé na mwána wa yangó, batíélí yangó minkóto mya bangó mpé Yézu afándélí yangó. | |
Matt | LinVB | 21:8 | Bato ebelé mpenzá batandí minkóto mya bangó o nzelá. Basúsu babúkí bitápi bya nzeté, batíí byangó o nzelá. | |
Matt | LinVB | 21:9 | Ná baye bakeí o libosó ná baye balandí yě bagángí : « Ozána, Mwána wa Davídi ! Nkémbo na óyo akoyâ o nkómbó ya Mokonzi ! Ozána | |
Matt | LinVB | 21:12 | Yézu ayíngélí o Témpelo mpé abengání bato bánso bazalákí kotéke mpé kosómba bilóko wâná ; akwêísí méza ya bato bazalákí kosénze mbóngo mpé kítí ya baye bazalákí kotéke bibengá. | |
Matt | LinVB | 21:13 | Alobí na bangó : « Ekomámí ’te : Ndáko ya ngáí ekotángema ndáko ya losámbo. Kasi bínó bobóngólí yangó ndáko ya bayíbi ! » | |
Matt | LinVB | 21:15 | Banganga bakonzi na batéyi ba Mobéko bayókí mabé áwa bamóní makamwísi Yézu asálí mpé bayókí bána bazalákí kogánga o Témpelo « Ozána, Mwána wa Davídi ! » | |
Matt | LinVB | 21:16 | Balobí na yě : « Oyókí makambo bazalí koloba ? » Yézu azóngísí : « Nayókí yangó malámu ; botángí maloba maye mokolo mǒkó té : Osálí ’te maloba ma bokúmisi yǒ máúta o monoko mwa bána, mwa baye bazalí konúnga mabéle » ? | |
Matt | LinVB | 21:19 | Amóní nzeté ya fígi mpembéni ya nzelá, abelémí na yangó, amóní ’te ezalákí sé na nkásá. Alobí na nzeté : « Yó, okobóta mbuma lisúsu té ! » Mpé na mbala yǒ kó nzeté ya fígi ekaúkí. | |
Matt | LinVB | 21:20 | Bayékoli bamóní yangó, bakámwí míngi, balobí : « Bóníbóní nzeté eye ya fígi ekaúkí na mbala yǒ kó boye ? » | |
Matt | LinVB | 21:21 | Yézu azóngísí : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Sókó bozalí na boyambi mpé botíí ntembe té, bokosála bobélé té lokóla ngáí nasálí na nzeté ya fígi, kasi sókó bolobí na ngómbá eye ‘Longwá áwa, kendé kokwâ o mbú’, yangó ekosálema. | |
Matt | LinVB | 21:23 | Yézu akótí o Témpelo, mpé ntángo azalákí kotéya bato, banganga bakonzi na bakóló ba mbóka bayéí kotúna yě : « Náni apésí yǒ likokí lya kosála bôngó ? Náni apésí yǒ likokí lyangó ? » | |
Matt | LinVB | 21:24 | Yézu azóngísélí bangó : « Ngáí mpé nakotúna bínó motúna ; sókó boyanólí ngáí, ngáí mpé nakoyébisa bínó na likokí níni nazalí kosála bôngó : | |
Matt | LinVB | 21:25 | Náni atíndákí Yoáne ábátisa bato : Nzámbe tǒ bato ? » Bangó bakanísí o mitéma : « Sókó tolobí ‘Nzámbe’, mbele akotúna bísó : ‘Mpô níni bondimákí yě té ?’ | |
Matt | LinVB | 21:26 | Mpé sókó tolobí ‘Bato’, tosengélí kobánga bato, zambí bánso bakotálaka Yoáne lokóla proféta. » | |
Matt | LinVB | 21:27 | Yangó wâná balobí na Yézu : « Toyébí té. » Yézu azóngísí : « Ngáí mpé nakoyébisa bínó té na likokí níni nakosálaka yangó. » | |
Matt | LinVB | 21:28 | « Bóyébisa ngáí makanisi ma bínó. Moto mǒkó azalákí na bána babáli bábalé. Alobí na mwána wa libosó : ‘Mwána, kendé leló kosála mosálá o elanga ya víno’. | |
Matt | LinVB | 21:31 | O ntéi ya bangó bábalé náni atósí tatá ? » Bayanólí : « Mwána wa libosó. » Yézu alobí na bangó : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : bafútisi mpáko na bandúmbá bakoyíngela libosó lya bínó o Bokonzi bwa Likoló. | |
Matt | LinVB | 21:32 | Mpô Yoáne ayákí epái ya bínó kolakisa bosémbo, kasi bo-ndimákí yě té ; nzókandé bafútisi mpáko na bandúmbá bandimákí yě ; kasi bínó, atâ bomónókí yangó, bobóngólákí mitéma té mpô ’te bóyamba yě. » | |
Matt | LinVB | 21:33 | « Bóyóka moúlání mosúsu. Moto mǒkó azalákí nkóló wa mabelé, mpé alóní nzeté ya víno ; azíngí elanga na lopángo, abongísí ekámolele ya víno mpé atóngí linóngi lya mokéngeli ; atíkí elanga o mabóko ma bafúteli mpé akeí mobémbo. | |
Matt | LinVB | 21:34 | Ekómí ntángo ya bobúki mbuma, atíndí basáleli ba yě epái ya basáli ba elanga bákamata mbuma ya yě. | |
Matt | LinVB | 21:35 | Kasi bafúteli bakangí basáleli ba yě : babétíbétí mǒkó, babomí mosúsu, babwákélí mosúsu mabángá. | |
Matt | LinVB | 21:36 | Na nsima atíndí basáleli basúsu míngi, leká baye ba libosó, kasi basálí na bangó sé bôngó. | |
Matt | LinVB | 21:38 | Kasi ntángo basáli bamóní mwána, balobání : ‘Moto akosangola elanga ya tatá, yě wâná. Bóyâ ! Tóboma yě, bôngó tózwa elanga ya yě.’ | |
Matt | LinVB | 21:41 | Bazóngísélí yě : « Akoboma bato baye babé, bakokúfa liwá lya nsómo. Na nsima akotíkela bafúteli basúsu elanga ya yě, bápésa yě mbuma sókó ntángo ekokí. » | |
Matt | LinVB | 21:42 | Yézu alobí na bangó : « Naíno botángí maloba maye o Minkandá té : Libángá liye batóngi ndáko babwákákí likómí libángá lya litúmu. Tálá mosálá Mokonzi asálí, tomóní mwangó na míso, mpé tokámwí ? | |
Matt | LinVB | 21:43 | Yangó wâná nayébísí bínó : Bakobótolo bínó Bokonzi bwa Nzámbe mpé bakopésa bwangó na ekolo ekobótela bwangó mbuma. » | |
Matt | LinVB | 21:45 | Eyókí banganga bakonzi na ba-Farizéo miúlání miye, bayébí malámu ’te alobákí bôngó mpô ya bangó. | |
Chapter 22
Matt | LinVB | 22:2 | « Bokonzi bwa Likoló boúlání na mokonzi alámbí limpáti linéne mpô ya libála lya mwána wa yě. | |
Matt | LinVB | 22:4 | Atíndí basáleli basúsu na maloba maye : ‘Yébísá bato babyángémí o limpáti : Nasílí nalámbí limpáti ; nabomí ngómbé ya ngáí na nyama mafúta ; nabongísí bínso, yákáni kosepela libála’. | |
Matt | LinVB | 22:5 | Kasi bangó batálí yangó sé mpámba : basúsu bakeí o bilanga, basúsu balandí mombóngo mwa bangó ; | |
Matt | LinVB | 22:8 | Na nsima mokonzi alobí na basáleli ba yě : ‘Bínso bibongí mpô ya limpáti, kasi bato nabéngákí babongókí té. | |
Matt | LinVB | 22:10 | Basáleli bakeí, bakamátí bato bánso bakútí o nzelá, ná bato babé ná bato balámu ; bôngó ndáko etóndí na bato babyángémí o limpáti. | |
Matt | LinVB | 22:11 | Ntángo mokonzi akótí mpô ya kotála bato bayéí o limpáti, amóní moto mǒkó alátí elambá ya eyenga té. | |
Matt | LinVB | 22:12 | Alobí na yě : ‘Ndeko, olátí elambá ya eyenga té ! Ndéngé níni okótí áwa ?’ Azóngísí liloba té. | |
Matt | LinVB | 22:13 | Bôngó mokonzi alobí na basáleli : ‘Bókanga yě makolo na mabóko mpé bóbwáka yě libándá, o káti ya molílí. Kúná bakolela mpé bakolía míno’. | |
Matt | LinVB | 22:16 | Batíndélí yě bayékoli ba bangó na bato ba Eróde, báloba na yě : « Motéyi, toyébí ’te okolobaka sé na bosôló mpé okolakisaka nzelá ya Nzámbe na bosémbo. Okobángaka moto mǒkó té, zambí okotálaka bilongi bya bato té. | |
Matt | LinVB | 22:18 | Kasi Yézu ayébí mayéle mabé ma bangó, alobí : « Bakíbisi ! Mpô níni bozalí komeka ngáí ? | |
Matt | LinVB | 22:21 | Bazóngísí : « Ya Kaizáro. » Yézu alobí na bangó : « Bôngó bópésa Kaizáro biye bikokí na Kaizáro, mpé bópésa Nzámbe biye bikokí na Nzámbe. » | |
Matt | LinVB | 22:23 | Bobélé mokolo môná ba-Saduséo bayéí epái ya Yézu ; bangó bakolobaka ’te bato bakosékwa té. Batúní yě : | |
Matt | LinVB | 22:24 | « Motéyi, Móze alobáká : ‘Sókó moto awéí mpé abótí té, ndeko wa yě ábála mwásí wa yě mpé ábótela ndeko wa yě bána’. | |
Matt | LinVB | 22:25 | Ezalákí epái ya bísó bandeko babáli nsambo. Oyo wa libosó abálí mwásí, awéí, abótí té ; atíkélí ndeko wa yě mwásí. | |
Matt | LinVB | 22:28 | Mokolo bato bakosékwa, akozala mwásí wa náni, zambí azalákí mwásí wa bangó bánso ? » | |
Matt | LinVB | 22:29 | Yézu azóngísélí bangó : « Bobúngí, zambí boyébí Minkandá té, boyébí mpé ngúyá ya Nzámbe té. | |
Matt | LinVB | 22:32 | Ngáí nazalí Nzámbe wa Abaráma, Nzámbe wa Izáka, Nzámbe wa Yakób ? Azalí Nzámbe wa bato bawá té, kasi wa bato bazalí na bomoi ! » | |
Matt | LinVB | 22:37 | Yézu azóngísí : « Olinga Mokonzi Nzámbe wa yǒ na motéma mwa yǒ mobimba, na makási ma yǒ mánso mpé na mayéle ma yǒ mánso. | |
Matt | LinVB | 22:39 | Mobéko mwa míbalé mokokání na moye mwa libosó : Olinga móníngá lokóla okomílingaka. | |
Matt | LinVB | 22:40 | Mánso makomámí o Búku ya Mibéko mpé o Minkandá mya baproféta mazalí o mibéko mîná míbalé. » | |
Matt | LinVB | 22:42 | « Bínó bokanísí ’te Krístu azalí náni ? Yě mwána wa náni ? » Balobí na yě : « Wa Davídi. » | |
Matt | LinVB | 22:44 | Mokonzi Nzámbe alobí na Mokonzi wa ngáí : Fándá o lobóko la ngáí la mobáli, téé nakokwêisa bangúná ba yǒ o nsé ya makolo ma yǒ ? | |
Chapter 23
Matt | LinVB | 23:3 | Yangó wâná bósála mpé bótósa mánso bakotínda bínó, kasi bólanda bizalela bya bangó té, zambí misálá mya bangó mikokání na matéya ma bangó té. | |
Matt | LinVB | 23:4 | Bakokangaka mabóké bozitó mpenzá miye bakomemisaka bato basúsu, kasi bangó mǒkó babóyí kosímba mangó atâ na nsóngé ya misapi. | |
Matt | LinVB | 23:5 | Bakosálaka makambo mánso sé mpô ’te bato bátála bangó. Bakolátaka mábenga manéne mpé bilambá na nsóngé ilaí. | |
Matt | LinVB | 23:8 | Kasi bínó, bólinga té ’te bátánga bínó ‘Rabi’, zambí bozalí sé na Motéyi mǒkó, mpé bínó bánso bozalí bandeko. | |
Matt | LinVB | 23:9 | Awa o nsé bóbénga moto mǒkó ‘tatá’ té, zambí bozalí sé na Tatá mǒkó, óyo azalí o likoló. | |
Matt | LinVB | 23:10 | Bóndima mpé té ’te bato bábénga bínó ‘bakambi’, zambí bozalí sé na Mokambi mǒkó, Krístu. | |
Matt | LinVB | 23:13 | Mawa na bínó, batéyi ba Mobéko na ba-Farizéo, bakíbisi ! Bokokangelaka bato nzelá ya Bokonzi bwa Likoló ! Bínó mǒkó bokoyíngela sókí té, mpé baye balingí koyíngela bokopekisaka bangó ! ( | |
Matt | LinVB | 23:15 | Mawa na bínó, batéyi ba Mobéko na ba-Farizéo, bakíbisi ! Bokokátisaka mái ná mpé mokili mpô ya kokótisa moto mǒkó o lingómbá lya bínó. Mpé sókó akótí, bokokómisa yě moto akokí na límfelo, alekí bínó na bobé mbala íbalé. | |
Matt | LinVB | 23:16 | Mawa na bínó bakambi, bokúfá míso. Bokolobaka : Sókó moto alayí ndaí na nkómbó ya Témpelo, likambo té ; kasi sókó alayí ndaí na wólo ya Témpelo, akangémí na ndaí ya yě. | |
Matt | LinVB | 23:17 | Bozángí mayéle mpé bokúfá míso ! Ná wólo ná ndáko eye ekosántisa wólo, níni elekí lokúmu ? | |
Matt | LinVB | 23:18 | Bokolobaka mpé : Sókó moto alayí na nkómbó ya altáre, likambo té ; kasi sókó alayí na nkómbó ya libonza lizalí o altáre, akangémí na ndaí ya yě. | |
Matt | LinVB | 23:20 | Oyo alayí na nkómbó ya altáre, alayí mpé na nkómbó ya bilóko bínso bizalí o altáre. | |
Matt | LinVB | 23:22 | óyo alayí na nkómbó ya likoló, alayí mpé na nkómbó ya ngwendé ya Nzámbe mpé ya Oyo afándí wâná. | |
Matt | LinVB | 23:23 | Mawa na bínó, batéyi ba Mobéko na ba-Farizéo, bakíbisi ! Bokobonzelaka Nzámbe eténi ya zómi ya mbuma iké ndéngé na ndéngé, kasi bokobúkaka mitíndo minéne mya Mobéko miye mitálí bosémbo, ngolu mpé bosôló. Ebongí bókokisa myangó libosó, na nsima mitíndo misúsu. | |
Matt | LinVB | 23:24 | Bínó bakambi bakúfá míso, bokolukaka kolongola nkungi, kasi bokotíkaka kaméla éleka ! | |
Matt | LinVB | 23:25 | Mawa na bínó, batéyi ba Mobéko na ba-Farizéo, bakíbisi ! Bokosukolaka libándá lya nkéni tǒ lya sǎni, nzókandé epái ya káti itóndí na makambo ma boyíbi mpé ma lokósó ! | |
Matt | LinVB | 23:26 | Mo-Farizéo okúfá míso, sukólá libosó nkéni tǒ sǎ ni epái ya káti, bôngó ekokóma mpé péto epái ya libándá. | |
Matt | LinVB | 23:27 | Mawa na bínó, batéyi ba Mobéko na ba-Farizéo, bakíbisi ! Bozalí lokóla malíta bapakólí mpémbé : epái ya libándá mamónóní kitóko, kasi o káti matóndí na minkúwa mya bawá mpé na bipolú ndéngé na ndéngé. | |
Matt | LinVB | 23:28 | Bínó sé bôngó : epái ya libándá bozalí komónono lokóla bato ba bosémbo, kasi o káti botóndí na lokutá mpé na makambo mazángí bosémbo. | |
Matt | LinVB | 23:29 | Mawa na bínó, batéyi ba Mobéko na ba-Farizéo, bakíbisi ! Bokotóngelaka baproféta malíta mpé bokokémbisaka malíta ma bato ba bosémbo, | |
Matt | LinVB | 23:30 | mpé bokolobaka : ‘Sókó tozalákí o mikolo mya bankóko, mbele tosangánákí na bangó té mpô ya koboma baproféta.’ | |
Matt | LinVB | 23:34 | Yangó wâná nakotíndela bínó baproféta, bato ba bwányá na batéyi ba Mobéko : bokoboma basúsu o kurúse, bokobéte basúsu fímbo o sinagóga ya bínó, bokobengana bangó o mbóka yǒ kó yǒ kó ! | |
Matt | LinVB | 23:35 | Bôngó, makilá mánso ma bato ba bosémbo masopání o mokili mákwêla bínó, bandá makilá ma Abel, moto wa bosémbo, téé makilá ma Zakaría, mwána wa Barakía, óyo bobomákí káti ya esíká esántusántu na altáre ! | |
Matt | LinVB | 23:37 | Yerúzalem, Yerúzalem, okobomaka baproféta, okobwákelaka ba-ntóma bayéí epái ya yǒ mabángá ! Mbala bóní nalingákí kosangisa bato ba yǒ, lokóla mamá nsósó akosangisaka bána ba yě o nsé ya mapapú, kasi bolingákí té ! | |
Chapter 24
Matt | LinVB | 24:1 | Yézu abimí o Témpelo. Awa abandí kokende, bayékoli babelémí na yě mpô ya kolakisa yě ndéngé Témpelo etóngámí. | |
Matt | LinVB | 24:2 | Kasi alobí : « Bomóní bilóko biye bínso ? Ya sôló sôló, nalobí na bínó : libángá lyǒ kó té likotíkala likoló lya libángá lisúsu ; bínso bikobúkana nyé. » | |
Matt | LinVB | 24:3 | Awa Yézu afándí o ngómbá ya Olíva, bayékoli bábalé, bobélé bangó mǒkó, bayéí epái ya yě, batúní yě : « Yébísá bísó ntángo níni yangó ekosálema, mpé elembo níni ekolakisa bísó mokolo okozónga mpé mokolo mwa nsúka ya molóngó. » | |
Matt | LinVB | 24:5 | Bato míngi bakokósa ’te bayéí o nkómbó ya ngáí, bakoloba ’te : ‘Krístu, ngáí óyo’ mpé bakokósa bato míngi. | |
Matt | LinVB | 24:6 | Bokoyóka masoló mpé nsango ya bitumba, kasi bóbánga té. Makambo mâná mánso masengélí koyâ, kasi nsúka ekoyâ nokí té. | |
Matt | LinVB | 24:7 | Ya sôló, ekólo yǒ kó ekobundisa ekólo esúsu ; bato ba mokili mǒkó bakobunda na mokili mosúsu. O bisíká míngi nzala na bokono bobé ikongala, mpé mokili mokoningana. | |
Matt | LinVB | 24:9 | O ntángo êná bakokaba bínó mpô ’te bányókolo bínó, mpé bakoboma bínó ; o bikólo bínso bakoyina bínó mpô ya nkómbó ya ngáí. | |
Matt | LinVB | 24:12 | Makambo mazángí bosémbo makongala, yangó wâná o mitéma mya bato míngi bolingi bokolembe. | |
Matt | LinVB | 24:14 | Bakosakola Nsango Elámu eye ya Bokonzi bwa Likoló o nsé mobimba mpô ’te bato ba bikólo bínso báyéba yangó. O ntángo êná nsúka ekoyâ. | |
Matt | LinVB | 24:15 | Bokomóno ’te Eboma-Mbóka, óyo Proféta Daniél alobákí, akotéleme o esíká esántu. (óyo ayebi kotánga áyéba ntína ya maloba maye !) | |
Matt | LinVB | 24:20 | Bósámbela mpô ’te mokolo bokokíma mozala o eleko ya mpío té, o mokolo mwa sábato mpé té. | |
Matt | LinVB | 24:21 | Mpámba té, ekozala monyóko monéne mpenzá, lokóla ezalákí naíno té, bandá Nzámbe akelá mokili téé sikáwa ; mpé na nsima ekozala bôngó lisúsu té. | |
Matt | LinVB | 24:22 | Sókó Nzámbe akokútola mikolo mîná té, mbele moto mǒkó té akobíka. Kasi akokútola mikolo mîná mpô ya bato baponómí. | |
Matt | LinVB | 24:23 | Sókó moto akoloba na bínó o ntángo êná ‘Tálá, Krístu azalí áwa !’ tǒ ‘Tálá yě kúná !’, bóndima té. | |
Matt | LinVB | 24:24 | Sôló, ba-Krístu ba lokutá na baproféta ba lokutá bakobima, bakolakisa bilembo mpé bakosála makamwísi makokí kokósa atâ bato baye Nzámbe aponí, sókó ekokí kosálema ! | |
Matt | LinVB | 24:26 | Bôngó, sókó balobí na bínó : ‘Tálá, azalí o elíkí’, bókende té ! Sókó balobí : ‘Bótála, abómbámí o káti ya ndáko’, bóndima té ! | |
Matt | LinVB | 24:27 | Sôló, lokóla monkalali mokoútaka o Esti mpé mokongengeke kín’o Wésti, Mwána wa Moto akoyâ sé bôngó ! | |
Matt | LinVB | 24:29 | Esílí monyóko mwa mikolo mîná, mwésé mokoínda, sánzá eko-ngenge lisúsu té, minzóto mikokwéya út’o likoló, ngúyá ya likoló ínso ikoningana. | |
Matt | LinVB | 24:30 | Na nsima elembo ya Mwána wa Moto ekomónono o likoló. O ntángo êná bato ba bikólo bínso bya nsé bakokímela ; bakomóno Mwána wa Moto akoyâ o mampata ma likoló na ngúyá mpé na nkémbo enéne. | |
Matt | LinVB | 24:31 | Akotínda bǎnzelú ba yě bábéte mindúle makási mpô ’te básangisa bato baye yě aponí, útá bipái bínso bya mokili, út’o nsúka yǒ kó ya likoló kín’o nsúka esúsu. | |
Matt | LinVB | 24:32 | Bóyóka ntína ya moúlání mwa nzeté yá fígi : Sókó bitápi bya yangó bikómí petepete mpé bibimí nkásá, boyébí ’te eleko ya mói makási ekómí penepene. | |
Matt | LinVB | 24:33 | Sé bôngó, ntángo bokomóno makambo mâná mánso, bóyéba ’te Mwána wa Moto azalí koyâ, akómí penepene. | |
Matt | LinVB | 24:34 | Ya sôló sôló, nalobí na bínó : mâná mánso makosálema libosó ’te bato bazalí sikáwa bákúfa. | |
Matt | LinVB | 24:36 | Moto mǒkó té ayébí mokolo níni tǒ o ngonga níni makambo mâná makosálema, atâ bǎnzelú ba likoló té, atâ Mwána (wa Moto) té. Bobélé Tatá yě mǒkó ayébí. | |
Matt | LinVB | 24:38 | O mikolo mîná libosó lya mpela enéne bato bazalákí kolía, komele, kobálana, kín’o mokolo Nowé ayíngélí o masúwa : | |
Matt | LinVB | 24:39 | bazalákí kokanisa likambo lyǒ kó té, téé mpela eyéí mpé esílísí bangó bánso. Ekozala sé bôngó o ntángo ya boyéi bwa Mwána wa Moto. | |
Matt | LinVB | 24:43 | Bóyéba malámu : Sókó nkóló wa ndáko ayébákí o ngonga níni moyíbi akoyâ na butú, mbele akéngélékí, mpé apekísákí moyíbi kobúka ndáko. | |
Matt | LinVB | 24:44 | Bôngó bínó lokóla, bózala na bokéngi, zambí Mwána wa Moto akoyâ ntángo bínó bokokanisa té. | |
Matt | LinVB | 24:45 | Náni mosáleli malámu mpé wa mayéle, óyo mokonzi aponí mpô ’te áyángela bato ba ndáko ya yě, mpé ápésa bangó biléi o ntángo ekokí ? | |
Chapter 25
Matt | LinVB | 25:1 | O Bokonzi bwa Likoló ekozala lokóla na bilengé básí zómi bakeí na miínda mya bangó kokútana na mobáli óyo akobála. | |
Matt | LinVB | 25:8 | Bazóba balobí na baye ba mayéle : ‘Bópésa bísó mwâ mafúta, zambí miínda mya bísó mizalí kozíma’ | |
Matt | LinVB | 25:9 | Kasi bangó bazóngísí : ‘Té, mafúta makokoka na bísó mpé na bínó té ; bínó mǒkó bókende kosómba epái ya bato bakotékeke mafúta.’ | |
Matt | LinVB | 25:10 | Awa bakeí kosómba, Molóngáni akómí. Baye bazalákí kozila yě bakótí na yě o ndáko ya limpáti, mpé bakangí lopángo. | |
Matt | LinVB | 25:11 | Na nsima bilengé básí basúsu batikalaki mpé bayéí, balobí : ‘Mokonzi, mokonzi, fungólélá bísó !’ | |
Matt | LinVB | 25:14 | Ezalí lokóla moto mǒkó alingí kokende mobémbo mosíká. Abéngí basáleli ba yě, atíkélí bangó mosolo mwa yě. | |
Matt | LinVB | 25:15 | Apésí moto mǒkó talénta ítáno, mosúsu talénta íbalé, mosúsu talénta yǒ kó : moto na moto lokóla ekokí na yě. Na nsima akeí. | |
Matt | LinVB | 25:18 | Kasi óyo azwákí sé talénta yǒ kó, akeí kotímola libúlú o mabelé mpé abómbí mosolo mwa mokonzi wa yě. | |
Matt | LinVB | 25:19 | Nsima ya mikolo míngi mokonzi wa basáleli baye azóngí, atúní bangó níni basálí na mosolo mwa yě. | |
Matt | LinVB | 25:20 | Oyo azwákí talénta ítáno ayéí, apésí yě talénta ítáno isúsu, alobí : ‘Mokonzi, opésákí ngáí talénta ítáno ; tálá, nazwí litómba lya talénta ítáno.’ | |
Matt | LinVB | 25:21 | Mokonzi alobí na yě : ‘Osálí malámu, yǒ mosáleli malámu mpé wa bosémbo ; ozalákí moto wa bosémbo na bilóko míngi té, nakotía yǒ kapíta wa bilóko míngi ; yáká kosepela elongó na mokonzi wa yǒ.’ | |
Matt | LinVB | 25:22 | Oyo azwákí talénta íbalé ayéí, alobí : ‘Mokonzi, opésákí ngáí talénta íbalé ; tálá, nazwí litómba lya talénta íbalé’. | |
Matt | LinVB | 25:23 | Mokonzi alobí na yě : ‘Osálí malámu, yǒ mosáleli malámu mpé wa bosémbo ; ozalákí moto wa bosémbo na bilóko míngi té, nakotía yǒ kapíta wa bilóko míngi ; yáká kosepela elongó na mokonzi wa yǒ ’. | |
Matt | LinVB | 25:24 | Na nsima óyo azwákí talénta yǒ kó ayéí, alobí : ‘Mokonzi, nayébí ’te ozalí na mpósá ya mosolo ; okobúkaka mbuma esíká olónákí té, okolokotoko bilóko esíká okwêísákí elóko té. | |
Matt | LinVB | 25:25 | Yangó wâná nabángákí ; nakendékí kobómba mosolo mwa yǒ o mabelé. Tálá, nazóngísélí yǒ mosolo mwa yǒ ’. | |
Matt | LinVB | 25:26 | Kasi mokonzi alobí na yě : ‘Mosálelí mabé mpé wa goigói ! Oyébákí ’te nakobúkaka mbuma esíká nalónákí té, nakolokotoko bilóko esíká nakwêísákí elóko té. | |
Matt | LinVB | 25:27 | Esengélákí ’te ópésa bato ba mombóngo mosolo mwa ngáí, bôngó o ntángo nakozónga názwa mosolo mwa ngáí, ná litómba lokóla. | |
Matt | LinVB | 25:29 | Oyo azalí na bilóko míngi, bakobakisela yě naíno ; kasi óyo azalí na bilóko míngi té, bakobótolo yě atâ mwâ elóko ezalí na yě. | |
Matt | LinVB | 25:30 | Mosáleli óyo wa mpámba bábwáka yě o libándá, o káti ya molílí : kúná bakolela mpé bakolía míno.’ | |
Matt | LinVB | 25:31 | Mokolo Mwána wa Moto akoyâ na nkémbo elongó na bǎnzelú bánso, akofánda o ngwendé ya yě ya nkémbo. | |
Matt | LinVB | 25:32 | Bakosangisa bato ba bikólo bínso o bosó bwa yě. Akokabola bangó, lokóla mokéngeli wa bibwélé akokabolaka mpatá na ntaba. | |
Matt | LinVB | 25:34 | Nsima yangó Mokonzi akoloba na baye bakozala o lobóko la mobáli : ‘Bóyáka, bínó bána Tatá wa ngáí abenísá ; bózwa bokonzi babongísélí bínó út’o libandela lya molóngó. | |
Matt | LinVB | 25:35 | Mpô nazalákí koyóka nzala, bopésákí ngáí biléi ; nazalákí koyóka mpósá ya mái, bopésákí ngáí mái ma komele ; nazalákí mompaya, boyambákí ngáí malámu ; | |
Matt | LinVB | 25:36 | nazalákí bolúmbú, bolátísákí ngáí elambá ; nazalákí na bokono, boyákí kosálisa ngáí ; nazalákí o bolóko, boyákí kotála ngáí.’ | |
Matt | LinVB | 25:37 | O ntángo êná bato ba bosémbo bakotúna yě : ‘Mokonzi, mokolo níni tomónókí yǒ ozalákí koyóka nzala mpé topésákí yǒ biléi, ozalákí koyóka mpósá ya mái mpé tomelísákí yǒ, | |
Matt | LinVB | 25:40 | Mokonzi akozóngisela bangó : ‘Ya sôló sôló, nalobí na bínó : mánso bosálákí bôngó na moto wa nsúka wa bandeko ba ngáí, bosálákí ngáí mǒkó’. | |
Matt | LinVB | 25:41 | Na nsima akoloba na baye bakozala o lobóko la mwásí : ‘Bólongwa mosíká na ngáí, bínó bato babé, bókende o móto mwa sékô baléngélékí mpô ya zábolo na báníngá ba yě. | |
Matt | LinVB | 25:42 | Mpámba té, nazalákí koyóka nzala, bopésákí ngáí biléi té ; nazalákí koyóka mpósá ya mái, bopésákí ngáí mái ma komele té ; | |
Matt | LinVB | 25:43 | nazalákí mompaya, boyambákí ngáí té ; nazalákí bolúmbú, bolátísákí ngáí elambá té ; nazalákí na bokono mpé o bolóko, boyákí kotála ngáí té’. | |
Matt | LinVB | 25:44 | Bangó mpé bakotúna yě : ‘Mokonzi, mokolo níni tomónókí yǒ ozalákí koyóka nzala tǒ mpósá ya mái, oyákí mompaya tǒ ozalákí bolúmbú, ozalákí na bokono tǒ okangémákí o bolóko, mpé tosálísákí yǒ té ?’ | |
Matt | LinVB | 25:45 | Akoyanola bangó : ‘Ya sôló sôló, nalobí na bínó : Mánso bosálákí bôngó té na moto wa nsúka wa bato ba ngáí, bosálákí ngáí mǒkó mpé bôngó té’. | |
Chapter 26
Matt | LinVB | 26:2 | « Boyébí, etíkálí mikolo míbalé tósepela eyenga ya Pásiká ; bakokaba Mwána wa Moto mpô ya kobáka yě o kurúse. » | |
Matt | LinVB | 26:3 | O ntángo êná banganga bakonzi na bakóló ba mbóka basangání likita o ndáko ya nganga mokonzi Kaífa. | |
Matt | LinVB | 26:7 | Ntángo bazalákí kolía, mwásí mǒkó ayéí na molangi mwa mbélé mwa malási ma motúya monéne, asopí mangó o motó mwa Yézu. | |
Matt | LinVB | 26:10 | Kasi Yézu ayókí yangó, alobí : « Mpô níni bozalí kotungisa mwásí óyo ? Asálí ngáí malámu. | |
Matt | LinVB | 26:13 | Ya sôló, nayébísí bínó, o bisíká bínso bya mokili mobimba bakosangela Nsango Elámu óyo, bakokanisa yě mpé bakoloba likambo asálí sikáwa. » | |
Matt | LinVB | 26:14 | Na nsima mǒkó wa ba-zómi na bábalé, Yudási Iskarióte, akeí epái ya banganga bakonzi, | |
Matt | LinVB | 26:15 | alobí na bangó : « Bokopésa ngáí níni sókó nakabí yě o mabóko ma bínó ? » Bapésí yě bibendé ntúkú ísáto bya mosolo. | |
Matt | LinVB | 26:17 | O mokolo mwa libosó mwa mikolo bakolíaka mámpa mavímbí té, bayékoli balobí na Yézu : « Esíká níni olingí tólámbela yǒ limpáti lya Pásiká ? » | |
Matt | LinVB | 26:18 | Yézu azóngísí : « Bóyíngela o engumbá, bókende epái ya Sóngóló, bóyébisa yě : Motéyi alobí : Elaká ya ngáí ekokí, nalingí kolía limpáti lya Pásiká elongó na bayékoli ba ngáí o ndáko ya yǒ. » | |
Matt | LinVB | 26:21 | Ntángo bazalákí kolía, alobí : « Ya sôló sôló, nalobí na bínó : mǒkó o ntéi ya bínó akokaba ngáí. » | |
Matt | LinVB | 26:24 | Mwána wa Moto akobenga nzelá lokóla ekomámí mpô ya yě o Minkandá ; kasi mawa na moto óyo akokaba Mwána wa Moto ! Ebongókí ’te moto ôná ábótama té ! » | |
Matt | LinVB | 26:25 | Yudási, óyo akokaba yě, atúní yě mpé : « Mokonzi, ezalí ngáí ? » Yézu azóngísí : « Osílí olobí. » | |
Matt | LinVB | 26:26 | Ntángo bazalákí kolía, Yézu akamátí límpa, asámbélí losámbo la bobenisi, abúkí lyangó, apésí bayékoli ba yě, alobí : « Kamátáni bólía, eye ezalí nzóto ya ngáí. » | |
Matt | LinVB | 26:27 | Na nsima akamátí nkéni, atóndí Nzámbe, apésí bangó, alobí : « Bómele yangó bínó bánso, | |
Matt | LinVB | 26:28 | eye ezalí makilá ma ngáí, makilá ma bondeko, makosopana mpô ya bato ebelé mpô ’te bázwa bolímbisi masúmu. | |
Matt | LinVB | 26:29 | Nayébísí bínó : bandá sikáwa nakomele víno lisúsu té, téé mokolo nakomele víno ya sika elongó na bínó o Bokonzi bwa Tatá wa ngáí. » | |
Matt | LinVB | 26:31 | Yézu alobí na bangó : « Na butú bwa lelóméí, bínó bánso bokotúta libakú mpô ya ngáí, zambí ekomámí : Nakobéte mokéngeli wa mpatá, mpé mpatá ya etónga ikopanzana. | |
Matt | LinVB | 26:33 | Pétro alobí na yě : « Atâ bánso batútí libakú mpô ya yǒ, ngáí té, atâ mokolo mǒkó té. » | |
Matt | LinVB | 26:34 | Yézu azóngísélí yě : « Nalobí na yǒ ya sôló : Na butú bwa lelóméí, naíno nsósó elelí té, okowángana ngáí mbala ísáto. » | |
Matt | LinVB | 26:35 | Pétro azóngísí : « Atâ nasengélí kokúfa elongó na yǒ, nakowángana yǒ té. » Bayékoli bánso balobí bobélé bôngó. | |
Matt | LinVB | 26:36 | Ntángo Yézu akómí na bangó o esíká bakobéngaka Getsémani, alobí na bayékoli : « Bótíkala áwa, ngáí nakeí kosámbela kúná. » | |
Matt | LinVB | 26:37 | Akeí na Pétro mpé na bána ba Zebedéo bábalé. Abandí koyóka mawa mpé nsómo o motéma. | |
Matt | LinVB | 26:38 | Alobí na bangó : « Nayókí mawa míngi lokóla nalingí nákúfa ; bótíkala áwa mpé bókéngele elongó na ngáí. » | |
Matt | LinVB | 26:39 | Etámbólí yě mwâ moké, akwéí elongi o nsé mpé asámbélí : « Tatá wa ngáí, sókó ekokí, nkéni eye élongwa mosíká na ngáí ! Nzókandé ésálema té lokóla ngáí nalingí, kasi lokóla yǒ olingí. » | |
Matt | LinVB | 26:40 | Azóngí epái ya bayékoli, akútí bangó bazalákí kolála mpongí. Alobí na Pétro : « Bôngó ozalí na makási ma kokéngele elongó na ngáí atâ ngonga yǒ kó té ? | |
Matt | LinVB | 26:41 | Bókéngele mpé bósámbela mpô ’te bóndima masénginyá té : atâ moto azalí na mpíkó, nzóto ya yě ekolembeke. » | |
Matt | LinVB | 26:42 | Akeí kosámbela mbala ya íbalé : « Tatá, sókó nkéni eye ekokí kolongwa té, bobélé námele yangó, ésálema lokóla yǒ olingí ! » | |
Matt | LinVB | 26:43 | Na nsima azóngí, akútí bangó bazalákí kolála lisúsu, zambí míso ma bangó male-mbí na mpongí. | |
Matt | LinVB | 26:45 | Na nsima azóngí epái ya bayékoli, alobí na bangó : « Sikáwa bokokí kolála mpé kopéma. Elaká esílí ekokí, bakokaba Mwána wa Moto o mabóko ma basúmuki. | |
Matt | LinVB | 26:47 | Esílísí yě naíno koloba té, Yudási, mǒkó wa ba-zómi na bábalé, ayéí elongó na bato ebelé ; bazalákí na mimpánga mpé na mángénda o mabóko. Banganga bakonzi na bakóló batíndákí bangó. | |
Matt | LinVB | 26:50 | Kasi Yézu alobí na yě : « Ndeko, sálá maye olingí kosála. » Na nsima basúsu babelémí, basímbí Yézu na mabóko mpé bakangí yě. | |
Matt | LinVB | 26:51 | Tálá, mǒkó wa bato bazalákí na Yézu akamátí mompánga mwa yě, abétí mosáli wa nganga mokonzi mpé akátí yě litói. | |
Matt | LinVB | 26:52 | Kasi Yézu alobí na yě : « Zóngísá mompánga, mpô bato bakobimisa mompánga, bakokúfa na mompánga. | |
Matt | LinVB | 26:53 | Okanísí ’te nakokí kobóndela Tatá wa ngáí té átíndela ngáí sikasikáwa mampingá zómi na mábalé ma bǎnzelú ? | |
Matt | LinVB | 26:54 | Kasi sókó nasálí bôngó, ndéngé níni mambí mánso makomámí o Minkandá makokokisama ? » | |
Matt | LinVB | 26:55 | O ntángo êná Yézu atúní bato : « Nazalí ndé moyíbi ’te bóbimela ngáí na mimpánga mpé na mángénda mpô ya kokanga ngáí ? Mokolo na mokolo nazalákí kofánda mpé kotéya o Témpelo, mpé bokangákí ngáí té. » | |
Matt | LinVB | 26:56 | Kasi maye mánso masálémí mpô ’te maloba makomámí o Minkandá mya baproféta mákokisama. O ntángo êná bayékoli bánso batíkí Yézu mpé bakímí. | |
Matt | LinVB | 26:57 | Baye bakangákí Yézu bakeí na yě epái ya nganga mokonzi Kaífa, esíká batéyi ba Mobéko na bakóló basangání likita. | |
Matt | LinVB | 26:58 | Pétro alandí Yézu mwâ mosíká kín’o ndáko ya nganga mokonzi, ayíngélí o lopángo mpé akeí kofánda epái ya basáli, ámóno ndéngé níni likambo liye likosúka. | |
Matt | LinVB | 26:59 | Banganga bakonzi na bato bánso ba Likita linéne bazalákí koluka bato bákoka kofúnda Yézu na lokutá mpô ’te bákitisa yě o liwá ; | |
Matt | LinVB | 26:60 | kasi bazwí ntína yǒ kó té, atâ banzénénéké ba lokutá babimákí míngi. Na nsúka mpenzá bato bábalé bayéí, | |
Matt | LinVB | 26:61 | balobí : « Moto óyo alobákí : Nakokí koboma Témpelo ya Nzámbe mpé kotónga yangó lisúsu na mikolo mísáto. » | |
Matt | LinVB | 26:62 | Sikáwa nganga mokonzi atélémí mpé atúní Yézu : « Okozóngisa liloba lyǒkó té ? Bato baye bafúndí yǒ na níni ? » | |
Matt | LinVB | 26:63 | Kasi Yézu akangí monoko. Nganga mokonzi alobí na yě : « Na nkómbó ya Nzámbe wa bomoi, yébísá bísó sókó ozalí Mesíya, Mwána wa Nzámbe. » | |
Matt | LinVB | 26:64 | Yézu ayanólí : « Olobí ya sôló. Kútu nayébísí bínó : Bandá leló bokomóno Mwána wa Moto akofánda o lobóko la mobáli la óyo alekí ngúyá, mpé akoyâ o mampata ma likoló. » | |
Matt | LinVB | 26:65 | Sikáwa nganga mokonzi apasólí bilambá bya yě, alobí : « Atúkí Nzámbe ! Mpô níni tóluka lisúsu banzénénéké ? Boútí koyóka ’te atúkí Nzámbe ! | |
Matt | LinVB | 26:69 | Pétro afándí o libándá, o lopángo. Mosáli mwásí mǒkó abelémí na yě, alobí : « Yǒ mpé ozalákí na Yézu wa Galiléa. » | |
Matt | LinVB | 26:70 | Kasi Pétro awángání o míso ma bato bánso, alobí : « Nayébí té níni olingí koloba. » | |
Matt | LinVB | 26:71 | Akeí kotéleme penepene na monoko mwa lopángo. Mwásí mosúsu amóní yě, alobí na bato bazalákí wâná : « Moto óyo azalákí na Yézu wa Nazaréte. » | |
Matt | LinVB | 26:73 | Mwâ moké nsima bato bazalákí wâná bayéí epái ya Pétro, balobí na yě : « Ntembe té, yǒ mpé ozalí mǒkó wa bangó, elobeli ya yǒ ezalí kofúnda yǒ. » | |
Matt | LinVB | 26:74 | Sikáwa abandí kolaya ndaí makási makási, alobí : « Nayébí moto ôná té. » Bobélé o ntángo êná nsósó elelí. | |
Chapter 27
Matt | LinVB | 27:1 | Etání ntóngó, banganga bakonzi bánso na bakóló basangání likita mpô ya kokitisa Yézu o liwá. | |
Matt | LinVB | 27:3 | Yudási, óyo akabákí yě, amóní ’te bakitísí Yézu o liwá, motéma moswí yě, akeí kozóngisa bibendé bya mosolo ntúkú ísáto o mabóko ma banganga bakonzi mpé ma bakóló, | |
Matt | LinVB | 27:4 | alobí : « Nasálí mabé, natékí makilá ma moto azalí na likambo té. » Kasi bangó bazóngísí : « Etálí bísó té ; ezalí sé likambo lya yǒ. » | |
Matt | LinVB | 27:6 | Banganga bakonzi balokótí bibendé, balobání : « Tokokí kotía byangó o sandúku ya Témpelo té, zambí ezalí mosolo mwa makilá. » | |
Matt | LinVB | 27:7 | Basámbí likambo mpé bayókání ’te bakosómba na mosolo moye elanga ya mosáli mbéki, ézala esíká ya kokunda bampaya. | |
Matt | LinVB | 27:9 | Esálémí bôngó lokóla proféta Yeremía alobákí : Bakamátí bibendé ntúkú ísáto bya mosolo, motúya moye bato ba Israél batíákí mpô ya yě ; | |
Matt | LinVB | 27:11 | Bakambí Yézu epái ya moyángeli wa ekólo. Moyángeli atúní yě : « Yǒ ozalí mokonzi wa ba-Yúda ? » Yézu azóngísí : « Olobí ya sôló. » | |
Matt | LinVB | 27:12 | Kasi ntángo banganga bakonzi na bakóló bazalákí kofúnda yě, azóngísí liloba lyǒkó té. | |
Matt | LinVB | 27:15 | O mokolo mwa Eyenga enéne moyángeli ameséní kobimisa moto mǒkó o bolóko, óyo bato balingí. | |
Matt | LinVB | 27:17 | Bôngó Piláto atúní bato basangání wâná : « Bolingí nábimisela bínó náni, Báraba tǒ Yézu óyo bakobéngaka Krístu ? » | |
Matt | LinVB | 27:19 | Ntángo azalákí kosámba, mwásí wa yě atíndélí yě maloba : « Okóto o likambo lya mosémba óyo té, zambí leló nayókákí mpási míngi mpô ya yě o ndóto nalótókí. » | |
Matt | LinVB | 27:20 | Nzókandé banganga bakonzi na bakóló bandimísí bato ’te básénge Báraba mpé bábomisa Yézu. | |
Matt | LinVB | 27:21 | Moyángeli atúní bangó lisúsu : « O ntéi ya bangó bábalé, bolingí nábimisela bínó náni ? » Bazóngísí : « Báraba. » | |
Matt | LinVB | 27:22 | Piláto alobí na bangó : « Bôngó násála níni na Yézu óyo bakobéngaka Krístu ? » Bazóngísí : « Bábáka yě o kurúse ! » | |
Matt | LinVB | 27:23 | Atúní lisúsu : « Bôngó asálí mabé níni ? » Kasi baléndísí kogánga : « Bábáka yě o kurúse ! » | |
Matt | LinVB | 27:24 | Emóní Piláto ’te akokí kobongisa elóko té, mpé mobúlú mobandí kobima, akamátí mái mpé asukólí mabóko o míso ma bangó, alobí : « Likambo lya makilá ma moto óyo litálí ngáí té, litálí sé bínó mǒkó ! » | |
Matt | LinVB | 27:26 | Na nsima Piláto abimísélí bangó Báraba ; abétísí Yézu fímbo mpé akabí yě o mabóko ma bangó mpô ’te bábáka yě o kurúse. | |
Matt | LinVB | 27:29 | balití ekáta ya nzúbe, balátísí yě o motó. Basímbísí yě nkékélé o lobóko la mobáli. Bafukámélí mpé basekí yě, balobí : « Losáko, mokonzi wa ba-Yúda ! » | |
Matt | LinVB | 27:31 | Awa basílísí kosekeseke yě, balongólí yě monkóto, bazóngísélí yě bilambá bya yě, mpé bakeí na yě mpô ya kobáka yě o kurúse. | |
Matt | LinVB | 27:32 | Ntángo babimí, bazwǎ ní na moto mǒkó wa Siréne, nkómbó ’te Simóni. Batíndí yě na makási ámeme kurúse ya Yézu. | |
Matt | LinVB | 27:34 | bamelísí Yézu víno ngai basangísí na míra ; Yézu amekí yangó, kasi abóyí komele yangó. | |
Matt | LinVB | 27:35 | Babákí yě o kurúse mpé bakabélání bilambá bya yě na bobéti zeké. (Bakokísí bôngó maloba ma proféta : Bakabélání bilambá bya ngáí, babétí zeké mpô ya moláto mwa ngáí.) | |
Matt | LinVB | 27:37 | Likoló lya motó mwa yě bakomí ntína bakitísí yě : « Oyo Yézu, Mokonzi wa ba-Yúda. » | |
Matt | LinVB | 27:38 | Elongó na yě babákí mpé bayíbi banéne bábalé o kurúse, mǒkó o lobóko la mobáli, mosúsu o lobóko la mwásí. | |
Matt | LinVB | 27:40 | balobí : « Yó okobúka Témpelo mpé okotónga yangó lisúsu na mikolo mísáto, ómíbíkisa sikáwa ; sókó ozalí Mwána wa Nzámbe, kitá o kurúse ! » | |
Matt | LinVB | 27:42 | « Abíkísí bato basúsu mpé akokí komíbíkisa té ! Yě mokonzi wa Israél té ? Amíbákola o kurúse sikáwa, bôngó tokoyamba yě. | |
Matt | LinVB | 27:43 | Atíákí motéma na Nzámbe : Nzámbe ábíkisa yě sikáwa sókó alingí yě sôló. Kútu, yě mǒkó alobákí : Nazalí Mwána wa Nzámbe. » | |
Matt | LinVB | 27:45 | Bandá ngonga ya midí likoló liíndí o mokili mobimba téé ngonga ya ísáto ya mpókwa. | |
Matt | LinVB | 27:46 | Pene na ngonga ya ísáto Yézu agángí makási : « Eli, Eli, láma sabaktáni » lokóla ’te « Nzámbe wa ngáí, Nzámbe wa ngáí, mpô níni otíkí ngáí ? » | |
Matt | LinVB | 27:48 | Mǒ kó wa bangó akeí mbángu kokamata linyuká, atíí lyangó o masanga ngai, akangí lyangó o nsóngé ya nkékélé mpé amelísí Yézu. | |
Matt | LinVB | 27:51 | Mpé tálá, elambá enéne ya Esíká esántusántu epaswání na biténi bíbalé út’o likoló téé o nsé ; mokili moningání, mabángá mapaswání, | |
Matt | LinVB | 27:53 | babimí o malíta nsima ya nsékwa ya Yézu, bayíngélí o Engumbá esántu mpé babimélí bato baíké. | |
Matt | LinVB | 27:54 | Komandá wa basodá na bato ba yě, baye bazalákí kokéngele Yézu, áwa bamóní mokili moningání ná mpé mánso masálémí wâná, bawéí na nsómo, balobí : « Sôló, moto óyo azalákí Mwána wa Nzámbe ! » | |
Matt | LinVB | 27:55 | Básí míngi, baye balandákí Yézu út’o Galiléa mpô ya kosálela yě, bazalákí kotála mwâ mosíká. | |
Matt | LinVB | 27:56 | O ntéi ya bangó : María wa Mágdala, María mosúsu mamá wa Yakóbo mpé wa Yozéfu, mpé mamá wa bána ba Zebedéo. | |
Matt | LinVB | 27:57 | Awa mpókwa eyéí, moto mǒkó wa nkita, Yozéfu wa Arimatéa ayéí ; yě mpé akómákí moyékoli wa Yézu. | |
Matt | LinVB | 27:60 | mpé akundí yangó o lilíta lya sika amíkátélákí o mabángá. Apúsí libángá linéne o bosó bwa monoko mwa lilíta mpé akeí. | |
Matt | LinVB | 27:62 | Mokolo mwa nsima, ezalákí mokolo nsima ya boléngeli sábato, banganga bakonzi na ba-Farizéo basangání mpé bakeí epái ya Piláto. | |
Matt | LinVB | 27:63 | Balobí na yě : « Mokonzi, tokundólí o mitéma ’te mokósi óyo alobákí ntángo azalákí naíno na bomoi : ‘Nakosékwa nsima ya mikolo mísáto !’ | |
Matt | LinVB | 27:64 | Yangó wâná tíndá ’te bákéngele lilíta mikolo mísáto, mpô ’te bayékoli ba yě báyâ koyíba yě té, mpé báloba na bato té ’te : ‘Asékwí o bawá !’ Mbele mayéle mâná makoleka lokutá la libosó na bobé. » | |
Matt | LinVB | 27:65 | Piláto azóngísí : « Bakéngeli, bozali na bango ! Bókende kokéngele lilíta lokóla bínó mǒkó bokanisi. » | |
Chapter 28
Matt | LinVB | 28:1 | Nsima ya mokolo mwa sábato, mokolo mwa eyenga na ntóngó, María wa Mágdala na María mosúsu bakeí kotála lilíta. | |
Matt | LinVB | 28:2 | Na mbala yǒ kó mokili moningání makási mpenzá. Anzelú wa Mokonzi aútí o likoló, ayéí kolongóla libángá mpé afándélí lyangó. | |
Matt | LinVB | 28:5 | Kasi ǎnzelú alobí na básí : « Bóbánga té, nayébí ’te bozalí koluka Yézu, óyo babákákí o kurúse. | |
Matt | LinVB | 28:7 | Bókende nokí koyébisa bayékoli ba yě ’te asékwí o bawá mpé akeí libosó lya bínó o Galiléa, bokomóno yě kúná. Yangó ndé nsango nayélí bínó. » | |
Matt | LinVB | 28:8 | Batíkí lilíta nokí mpenzá ; bazalákí kobánga, kasi batóndí na esengo, bapotí mbángu mpô ya kosangela bayékoli ba yě nsango eye. | |
Matt | LinVB | 28:9 | Mpé tálá, Yézu ayéí kokútana na bangó, alobí : « Boboto ! » Babelémí, bakúmbámélí yě mpé basímbí yě na makolo. | |
Matt | LinVB | 28:10 | Yézu alobí na bangó : « Bóbánga té, bókende koyébisa bandeko ba ngáí bákende o Galiléa, kúná bakomóno ngáí. » | |
Matt | LinVB | 28:11 | Ezalákí bangó kokende, bakéngeli basúsu bakeí koyébisa banganga bakonzi mánso malekákí kúná. | |
Matt | LinVB | 28:12 | Bangó basangání na bakóló ba mbóka, balobání mpé bayókání ’te bakopésa basodá mosolo míngi, | |
Matt | LinVB | 28:13 | bayébísí bangó : « Bóloba ’te bayékoli ba yě bayíbí ebembe ya yě na butú ntángo tozalákí kolála. | |
Matt | LinVB | 28:14 | Sókó likambo likómí o matói ma moyángeli, bísó bato tokokitisa yě motéma mpô bózwa matáta té. » | |
Matt | LinVB | 28:15 | Basodá bakamátí mosolo mpé basálí lokóla bayébísí bangó. Nsango eye ya lokutá epalángání o ntéi ya ba-Yúda téé leló. | |
Matt | LinVB | 28:19 | Yangó wâná bókende, bókómisa bato ba bikólo bínso bayékoli ba ngáí, bóbátisa bangó o nkómbó ya Tatá mpé ya Mwána mpé ya Elímo Sántu. | |