EXODUS
Up
Chapter 1
Exod | LinVB | 1:1 | Tala nkombo ya bana ba Israel bayingeli o Ezipeti elongo na Yakob. Bayaki wana moto na moto na libota lya ye : | |
Exod | LinVB | 1:5 | Bana na bankoko ba Yakob bazalaki bango banso bato ntuku nsambo. Yosefu asili akomaki o Ezipeti liboso. | |
Exod | LinVB | 1:7 | Bana ba-Israel bazalaki kobota mingi, bakomi ebele mpe bazwi makasi ; mokili motondi na bango. | |
Exod | LinVB | 1:10 | bongo toluka mayele mpo babota lisusu mingi te. Mokolo bakoyela biso etumba, bakosangana na banguna ba biso, bakobundisa biso, nsima bakolongwa o mokili mwa biso. » | |
Exod | LinVB | 1:11 | Yango wana baluboli bakapita mpo ’te batinda ba-Israel mosala makasi. Bongo batongeli Farao bingumba bya kobomba biloko, Pitom na Ramses. | |
Exod | LinVB | 1:12 | Kasi ata banyokoli bango mingi, bazalaki kobanga ba-Israel, mpo bazalaki kobota mingi mpe bakomi ebele. | |
Exod | LinVB | 1:14 | Bayokisi bango mpasi na misala miye : kolamba potopoto, kotumba biliki mpe kosala mosala mwa bilanga. | |
Exod | LinVB | 1:15 | Mokonzi wa Ezipeti alobi na basi bazalaki kobotisa basi ba-Ebrei, moko nkombo ya ye Sifra, mosusu Pua, maloba maye : | |
Exod | LinVB | 1:16 | « Ntango bokobotisa mwasi mo-Ebrei botala soko mwana azali mobali to mwasi. Soko azali mobali, boboma ye ; soko azali mwasi, botika ye. » | |
Exod | LinVB | 1:17 | Kasi basi babotisi bazalaki kobanga Nzambe, baapi kotosa mokonzi wa Ezipeti mpe babomi bana babali te. | |
Exod | LinVB | 1:18 | Mokonzi wa Ezipeti abengi bango mpe atuni bango : « Mpo nini bosali bongo ? Mpo nini bobomi bana babali te ? » | |
Exod | LinVB | 1:19 | Bango bazongisi : « Basi ba-Ebrei bazali lokola basi ba Ezipeti te, bazali makasi ; tala, naino mobotisi akomi o ndako ya bango te, basili kobota. » | |
Exod | LinVB | 1:20 | Nzambe asalisi basi babotisi, mpe bongo ba-Ebrei bakomi ebele mpenza mpe bazwi makasi mingi. | |
Chapter 2
Exod | LinVB | 2:2 | Mwasi azwi zemi mpe aboti mwana mobali. Amoni ’te mwana wa ye azali kitoko, abombi ye sanza isato. | |
Exod | LinVB | 2:3 | Awa akoki kobomba ye lisusu te, aluki ekoló ya nkasa mpe apakoli yango mpaka na mokobo. Atii mwana o kati mpe akei kobomba ekoló o kati ya nkekele o libongo lya Nil. | |
Exod | LinVB | 2:5 | Tala, mwana mwasi wa Farao ayei kosukola nzoto o ebale ; basaleli basi ba ye batikali o libongo. Amoni ekoló o kati ya nkekele mpe atindi mosaleli wa ye akamata yango. | |
Exod | LinVB | 2:6 | Afungoli yango mpe amoni mwana mobali azalaki kolela. Ayokeli ye mawa mpe alobi : « Oyo mwana wa ba-Ebrei. » | |
Exod | LinVB | 2:7 | Ndeko mwasi wa mwana abimi, alobi na mwana wa Farao : « Olingi nakende koluka mama moko wa ba-Ebrei abokolela yo mwana oyo ? » | |
Exod | LinVB | 2:9 | Mwana wa Farao alobi na ye : « Kamata mwana oyo, mpe bokolo ye ; ngai moko nakofuta yo. » Mama akamati mwana mpe amelisi ye mabéle. | |
Exod | LinVB | 2:10 | Ekoli mwana, akei kotika ye o ndako ya mwana wa Farao ; oyo andimi ye lokola mwana wa ye moko mpenza. Apesi ye nkombo Mose, zambi alobi : « Nabikisi ye o mai. » | |
Exod | LinVB | 2:11 | Ekoli Mose, mokolo moko akei kotala bandeko ba ye, amoni ndenge bazalaki kosala misala makasi ; akuti mpe moto wa Ezipeti abeti moko wa bandeko ba ye mo-Ebrei makasi. | |
Exod | LinVB | 2:12 | Mose atali epai na epai, amoni moto mosusu te, bongo abomi moto wa Ezipeti mpe abombi ye o nse ya zelo. | |
Exod | LinVB | 2:13 | Mokolo mwa nsima azongi kuna ; amoni ba-Ebrei babale bazalaki kobunda, alobi na moto oyo abandaki etumba : « Mpo nini osali kobete moninga ? » | |
Exod | LinVB | 2:14 | Oyo azongisi : « Nani atii yo mokonzi mpe zuzi wa biso ? Olingi nde koboma ngai lokola obomaki mo-Ezipeti ? » Mose abangi mpe amilobeli : « Ntembe te, likambo nasalaki lisili liyebani ! » | |
Exod | LinVB | 2:15 | Eyoki Farao likambo lina, aluki koboma Mose. Kasi Mose akimi mosika na Farao ; akei kofanda o mokili mwa Madian, penepene na lisiba lya mai. | |
Exod | LinVB | 2:16 | Nganga Nzambe wa Madian azalaki na bana basi nsambo. Bango bayei kotoka mai o lisiba mpe kotondisa mbeki ya bango mpo ya komelisa mpata ya tata wa bango mai. | |
Exod | LinVB | 2:17 | Bakengeli ba mpata bayei mpe babengani bango. Mose atelemi mpo ya kosalisa bango mpe amelisi mpata ya bango mai. | |
Exod | LinVB | 2:18 | Bazongi epai ya tata wa bango Reuel. Oyo alobi na bango : « Mpo nini bosongi noki ape lelo ? » | |
Exod | LinVB | 2:19 | Bango balobi : « Moto moko wa Ezipeti abikisi biso o maboko ma bakengeli ba mpata, atokeli biso mai, mpe amelisi mpata ya biso. » | |
Exod | LinVB | 2:20 | Tata atuni bana : « Azali wapi ? Mpo nini botiki ye kuna ? Bobenga ye, aya kolia awa. » | |
Exod | LinVB | 2:22 | Mwasi oyo aboti mwana mobali mpe Mose apesi ye nkombo Gersom, zambi alobi : « Nazali mompaya, nauti o ekolo esusu. » | |
Exod | LinVB | 2:23 | Mikolo milekaki mwa mingi, mokonzi wa Ezipeti akufi. Kasi ba-Israel bazalaki se kolela mingi mpo ya mpasi ya boombo. O esika bazalaki baombo, babeleli Nzambe mpe boleli bwa bango bokomi tee epai ya ye. | |
Chapter 3
Exod | LinVB | 3:1 | Mose azalaki koleisa mpata ya bokilo wa ye Yetro, nganga Nzambe wa Madian. Akatisi na bango eliki, akomi o Oreb, ngomba ya Nzambe. | |
Exod | LinVB | 3:2 | Anzelu wa Yawe abimeli ye o mololi o kati ya nzete. Mose atali : nzete epeli móto, nzokande ezalaki kosika te. | |
Exod | LinVB | 3:3 | Mose amilobeli o motema : « Tika, napusana penepene, natala soko likambo nini lisali kuna mpe ntina nini nzete eye ezali kosika te. » | |
Exod | LinVB | 3:4 | Yawe amoni ’te Mose azalaki koya kotala, mpe ut’o nzete eye epeli móto abengi ye : « Mose, Mose ! » Mose andimi : « Ngai oyo ! » | |
Exod | LinVB | 3:5 | Nzambe alobi : « Oya penepene te, longola mapapa o makolo, zambi esika otelemi ezali mabelé masantu. » | |
Exod | LinVB | 3:6 | Mpe alobi lisusu : « Ngai Nzambe wa bankoko ba yo, Nzambe wa Abarama, Nzambe wa Isaka, Nzambe wa Yakob. » Mose azipi elongi ya ye, zambi abangi kotala Nzambe na miso. | |
Exod | LinVB | 3:7 | Yawe alobi : « Namoni mpasi ya bato ba ngai o Ezipeti ; nayoki boleli bwa bango, zambi bazali konyokwama ; solo, nayebi mpasi ya bango. | |
Exod | LinVB | 3:8 | Yango wana nakani kobikisa bango o maboko ma ba-Ezipeti, mpe nakokende na bango o mokili molamu mpe monene, mokili motondi na mabéle ma ngombe mpe na mafuta ma nzoi : mokili mwa ba-Kanana, ba-Iti, ba-Amor, ba-Perisi, ba-Ivi na ba-Yebus. | |
Exod | LinVB | 3:9 | Sikawa nayoki boleli bwa bana ba Israel mpe namoni ndenge ba-Ezipeti bazali konyokolo bango. | |
Exod | LinVB | 3:10 | Kende sikawa ; natindi yo o mboka Farao mpo ’te obimisa bato ba ngai bana ba Israel o mokili mwa Ezipeti. » | |
Exod | LinVB | 3:11 | Kasi Mose alobi na Nzambe : « Ngai nde nani ’te nakende o mboka Farao mpe nabimisa bana ba Israel o mokili mwa Ezipeti ? » | |
Exod | LinVB | 3:12 | Nzambe alobi na ye : « Ngai nakosala na yo ; tala mpe elembo ekolakisa yo ’te Ngai natindi yo : Soko osili olongoli bato o Ezipeti, bokokumisa Ngai o ngomba eye. » | |
Exod | LinVB | 3:13 | Mose alobi na Nzambe : « Malamu, nakokende kotala bana ba Israel mpe nakoloba na bango : ‘Nzambe wa bankoko ba bino atindi ngai epai ya bino.’ Kasi soko bakotuna ngai : ‘Nkombo ya ye nani ?’ nazongisela bango nini ? » | |
Exod | LinVB | 3:14 | Nzambe alobi na Mose : « NAZALI OYO NAZALI ! Okoloba na ba-Israel : ‘NAZALI’ atindi ngai epai ya bino. | |
Exod | LinVB | 3:15 | Okoloba na bango mpe : YAWE, Nzambe wa bankoko ba bino, Nzambe wa Abarama, Nzambe wa Isaka, Nzambe wa Yakob atindi ngai epai ya bino. Eye ezali nkombo ya ngai ya seko ; bino na bankoko ba bino bokotanga ngai na nkombo ena o bileko binso seko. | |
Exod | LinVB | 3:16 | Kende kosangisa bakolo ba Israel mpe loba na bango : ‘Yawe, Nzambe wa bankoko ba bino, Nzambe wa Abarama, Nzambe wa Isaka, Nzambe wa Yakob abimeli ngai. Alobi ape : Nayaki kotala bino mpe namoni makambo bazali kosala bino o Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 3:17 | Yango wana nakani kokamba bino ut’o Ezipeti, mokili mwa mpasi, kin’o mokili mwa ba-Kanana, ba-Iti, ba-Amor, ba-Perisi, ba-Ivi na ba-Yebus, mokili motondi na mabéle ma ngombe mpe na mafuta ma nzoi.’ | |
Exod | LinVB | 3:18 | Bakoyoka yo. Okokende na bakolo ba Israel epai ya mokonzi wa Ezipeti, mpe bokoloba na ye : ‘Yawe, Nzambe wa ba-Ebrei ayaki kotala biso ; lingisa biso tokende o eliki mikolo misato mpo tobonzela Yawe, Nzambe wa biso, mabonza.’ | |
Exod | LinVB | 3:19 | Nasili nayebi ’te mokonzi wa Ezipeti akopesa bino nzela bobele soko basengisi ye na makasi. | |
Exod | LinVB | 3:20 | Yango wana nakotombola loboko mpe nakobete Ezipeti ; nakosala makamwisi ndenge na ndenge o kati ya bango, na nsima akopesa bino nzela bokende. | |
Exod | LinVB | 3:21 | Nakosala ’te ba-Ezipeti balinga bato ba yo. Bongo, mokolo bokolongwa kuna, bokokende maboko mpamba te. | |
Chapter 4
Exod | LinVB | 4:1 | Mose azongiseli Nzambe maloba maye : « Kasi soko bato baapi kondima ngai mpo ya maloba maye, soko balobi : ‘Yawe abimeli yo te !’ » | |
Exod | LinVB | 4:3 | Yawe alobi na ye : « Bwaka lyango o nse. » Mose abwaki lyango o nse, mpe lingenda libongwani nyoka, mpe Mose akimi yango. | |
Exod | LinVB | 4:4 | Yawe alobi na Mose : « Tanda loboko mpe kamata yango na mokila. » Atandi loboko, asimbi yango mpe nyoka ekomi lisusu lingenda o loboko la ye. | |
Exod | LinVB | 4:5 | Yawe alobi : « Bakondima bongo ’te Yawe abimelaki yo, ye Nzambe wa bankoko ba bino, Nzambe wa Abarama, Nzambe wa Isaka na Nzambe wa Yakob. » | |
Exod | LinVB | 4:6 | Yawe atindi ye mpe : « Tia loboko la yo o ntolo. » Mose atii loboko o ntolo, na nsima alongoli lango ; mpe tala, loboko lokomi na maba, mpembe mpenza. | |
Exod | LinVB | 4:7 | Yawe alobi na ye : « Zongisa loboko o ntolo. » Azongisi loboko o ntolo, alongoli lango lisusu, mpe tala, loboko losongi lokola losalaki. | |
Exod | LinVB | 4:8 | « Soko bayambi yo te, soko bandimi elembo ya yambo te, bako-ndima mpo ya elembo eye ya bibale. | |
Exod | LinVB | 4:9 | Mpe soko ata mpo ya bilembo biye bibale bayambi yo te mpe baapi koyoka yo, okokamata mai ma ebale mpe okosopa mango o mabelé, mpe mai otokaki o ebale makobongwana makila. » | |
Exod | LinVB | 4:10 | Mose alobi na Yawe : « E Mokonzi, limbisa ngai, zambi nayebi koloba malamu te banda bomwana tee lelo ; ut’o mokolo okomi koloba na ngai, mosaleli wa yo, monoko mwa ngai mokokoka te mpe lolemu la ngai losali bosito mingi. » | |
Exod | LinVB | 4:11 | Yawe alobi na ye : « Nani apesi moto monoko ? Nani akosala ’te azala mbubu to akufa matoi, ayeba komono polele to komono soki te ? Bobele ngai Yawe te ? | |
Exod | LinVB | 4:12 | Sikawa kende, ngai nakosalisa monoko mwa yo, mpe nakolakisa yo maye osengeli koloba. » | |
Exod | LinVB | 4:14 | Yawe ayokeli Mose nkanda mpe alobi na ye : « Bongo, ndeko wa yo Arone, mo-Levi, ye azali te ? Nayebi ’te ye akolobaka malamu ; tala, azali koya mpo ya kokutana na yo, ntango akomono yo, akoyoka motema esengo. | |
Exod | LinVB | 4:15 | Yo moto loba na ye mpe olobisa ye maloba ma yo. Ngai nakosalisa monoko mwa yo na monoko mwa ye, mpe nakolakisa bino nini bosengeli kosala. | |
Exod | LinVB | 4:18 | Mose azongi epai ya bokilo wa ye Yetro. Alobi na ye : « Lingisa ngai nazonga epai ya bandeko ba ngai o Ezipeti, natala soko bazali malamu. » Yetro azongisi : « Kende na boboto. » | |
Exod | LinVB | 4:19 | Yawe alobaki na Mose o mokili mwa Madian : « Zonga o Ezipeti, zambi baye banso balukaki koboma yo, basili bakufi. » | |
Exod | LinVB | 4:20 | Mose abutisi mwasi na bana ba ye o mpunda mpe, na lingenda lya Yawe o maboko, azongi o Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 4:21 | Yawe alobi na Mose : « Awa okosonga o Ezipeti, osala o miso ma Farao makamwisi manso nalakisaki yo. Ngai nakokomisa ye motó makasi, kasi ye akolingisa bato bakende te. | |
Exod | LinVB | 4:23 | Natindaki yo ’te otika mwana wa ngai akende mpo ’te akumisa ngai. Awa yo oapi kotika ye, ngai nakoboma mwana wa yo wa yambo.” » | |
Exod | LinVB | 4:24 | O nzela ya kosonga o Ezipeti, o esika bapemaki na butu, Yawe ayei kokutana na Mose, mpe aluki nzela ya koboma ye. | |
Exod | LinVB | 4:25 | Sipora akamati libanga lipotu, akati na lyango nzoto ya mwana, na nsima asimbisi mposo ya nzoto ya mwana na makolo ma Mose. Alobi : « Yo osali mobali wa ngai wa makila. » | |
Exod | LinVB | 4:26 | Bongo Yawe atiki ye. Sipora alobaki : « Mobali wa makila », mpo ya likambo lya kokatisa mwana nzoto. | |
Exod | LinVB | 4:27 | Yawe alobi na Arone : « Kende kokutana na Mose o nzela ekokende o eliki. » Akei mpe akuti ye o ngomba ya Nzambe mpe ayambi ye o maboko. | |
Exod | LinVB | 4:28 | Mose ayebisi ye maloba manso Yawe alobaki na ye, ndenge atindaki ye mpe ndenge apesaki ye nguya ya kosala makamwisi maye atindi ye asala. | |
Exod | LinVB | 4:30 | Arone alobi lisusu maloba manso Yawe alobaki na Mose, mpe alakisi makamwisi o miso ma bato. | |
Chapter 5
Exod | LinVB | 5:1 | Nsima ya makambo mana Moze na Arone bakei epai ya Farao, balobi na ye : « Yawe, Nzambe wa Israel, alobi ape : Tika bato ba ngai bakende, basepela eyenga ya ngai o eliki. » | |
Exod | LinVB | 5:2 | Farao azongisi : « Yawe ye nani mpo ’te natosa ye, mpe natika ba-Israel bakende ? Nayebi Yawe te, mpe nakolingisa te ’te ba-Israel bakende. » | |
Exod | LinVB | 5:3 | Bango balobi : « Nzambe wa ba-Ebrei ayaki koswana na biso. Lingisa biso tokende mobembo mwa mikolo misato o eliki mpo tobonzela Yawe Nzambe wa biso libonza ; soki bongo te, akotindela biso bokono bobe to akoboma biso na mopanga. » | |
Exod | LinVB | 5:4 | Mokonzi wa Ezipeti alobi na bango : « Mose na Arone, mpo nini bolingi kolongola bato o mosala mwa bango ? Bosonga o misala mya bino. » | |
Exod | LinVB | 5:5 | Farao alobi : « Sikawa bato bakomi baike o mokili, mpe bino bolingi batika mosala ? » | |
Exod | LinVB | 5:7 | « Banda lelo bopesa bato lisusu matiti makauka te mpo ya kotumba biliki, lokola bopesaki liboso ; bango moko balokoto matiti makauka masengeli na bango. | |
Exod | LinVB | 5:8 | Kasi bokatela bango motango mwa biliki se lokola bazalaki kosala liboso, bokutola ata moke te, mpo bazali bato ba goigoi. Se na ntina ena bazali koga-nga : ‘Tokende kobonzela Nzambe wa biso libonza’. | |
Exod | LinVB | 5:9 | Bopesa bango misala makasi, bongo bamipesa na misala mpe batika kokanisaka makambo ma lokuta. » | |
Exod | LinVB | 5:10 | Bakengeli na bakapita bakei koyebisa bato : « Farao alobi : Nakopesa bino lisusu matiti makauka te ! | |
Exod | LinVB | 5:11 | Bino moko bokende koluka mango esika bokoki koswa mango, kasi bokokutola mosala mwa bino ata moke te. » | |
Exod | LinVB | 5:12 | Bongo bato banso bapalangani o mokili mobimba mwa Ezipeti mpo ya kolokoto matiti makauka. | |
Exod | LinVB | 5:13 | Bakengeli bagangeli bango, balobi : « Bosilisa mosala mwa bino mwa mokolo na mokolo se lokola bosalaki kosala o mikolo bazalaki kopesa bino matiti. » | |
Exod | LinVB | 5:14 | Babeti bakapita ba Israel baye bakengeli ba Farao batiaki, balobi : « Mpo nini lelo mpe lobi bokokisi motango mwa biliki te lokola bosalaki liboso ? » | |
Exod | LinVB | 5:15 | Bakapita ba Israel bakei komilela epai ya Farao, balobi : « Mpo nini osali kosala basaleli ba yo bongo ? | |
Exod | LinVB | 5:16 | Bazali kopesa biso, basaleli ba yo, matiti lisusu te, mpe balobi na biso : “Botumba biliki” ; bazali mpe kobete biso, basaleli ba yo. » | |
Exod | LinVB | 5:17 | Farao azongisi : « Bosali bato ba goigoi, solo, bato ba goigoi mpenza ; yango wana bolobi : “Tolingi kobonzela Yawe libonza.” | |
Exod | LinVB | 5:18 | Sikawa bokende kosala mosala. Bakopesa bino matiti te, kasi bokopesa motango mwa biliki se lokola batindaki. » | |
Exod | LinVB | 5:19 | Bakapita ba Israel bamoni ’te bakomi na kwokoso awa balobaki na bango : « Mokolo na mokolo botumba biliki se ndenge yoko. » | |
Exod | LinVB | 5:20 | Ebimi bango o ndako ya Farao, bakei epai ya Mose na Arone, baye bazalaki kosila bango. | |
Exod | LinVB | 5:21 | Balobi na bango : « Yawe ye moko akata likambo lya bino. Mpo ya bino Farao na bato ba ye bakomi koyina biso, mpe o maboko ma bango botii mopanga moye mokoboma biso. » | |
Exod | LinVB | 5:22 | Mose azongi epai ya Yawe mpe alobi na ye : « E Mokonzi, mpo nini osali bato ba yo mabe bongo ? Mpo nini otindaki ngai ? | |
Chapter 6
Exod | LinVB | 6:1 | Yawe alobi na Mose : « Sikawa okomono makambo nalingi kosala Farao. Bokasi bwa loboko la ngai bokondimisa ye ’te bolongwa, se lobokomei lokotinda ye ’te abengana bino o ekolo ya ye. » | |
Exod | LinVB | 6:3 | Nabimelaki Abarama, Isaka na Yakob lokola Nzambe wa bokasi bonso, kasi nayebisaki bango nkombo ya ngai Yawe te. | |
Exod | LinVB | 6:4 | Mpe nakataki na bango bondeko mpo ya kokabela bango mokili mwa Kanana, mokili moye bafandaki lokola bampaya. | |
Exod | LinVB | 6:5 | Mpe nayoki boleli bwa bana ba Israel, bakomaki baombo ba ba-Ezipeti ; bongo nakanisi lisusu bondeko bwa ngai. | |
Exod | LinVB | 6:6 | Yango wana, loba na ba-Israel : Nazali Yawe mpe nakolongola bino o misala makasi mya ba-Ezipeti ; nakobikisa bino o boombo mpe nakosikola bino na bokasi bwa loboko la ngai mpe na bitumbu binene. | |
Exod | LinVB | 6:7 | Nakokomisa bino bato ba ngai, mpe ngai nakosala Nzambe wa bino. Bokoyeba ’te nazali Yawe, Nzambe wa bino, oyo alongoli bino o misala makasi mya ba-Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 6:8 | Na nsima nakokotisa bino o mokili moye nalayelaki Abarama, Isaka na Yakob, mpe nakokomisa bino bankolo ba mokili ; ngai Yawe. » | |
Exod | LinVB | 6:9 | Mose alobi bongo na bana ba Israel, kasi bayoki Mose te, zambi mosala molekaki makasi mpe molembisaki bango. | |
Exod | LinVB | 6:11 | « Kende koyebisa Farao, mokonzi wa Ezipeti, atika bana ba Israel balongwa o mokili mwa ye. » | |
Exod | LinVB | 6:12 | Mose alobi na Yawe maloba maye : « Bana ba Israel bayoki ngai te, ndenge nini Farao akoyoka ngai, ngai moto nayebi koloba malamu te ? » | |
Exod | LinVB | 6:13 | Yawe atindi Mose na Arone epai ya Farao, mokonzi wa Ezipeti mpo ’te atika bana ba Israel balongwa o Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 6:14 | Tala nkombo ya bakonzi ba mabota ma bango : Bana ba Ruben, mwana wa yambo wa Israel : Kenok, Palu, Kesron na Karomi ; bango, mabota ma Ruben. | |
Exod | LinVB | 6:15 | Bana ba Simeon : Yemuel, Yamin, Okad, Yakin, Sokar na Saul, mwana wa mwasi wa Kanana ; bango, mabota ma Simeon. | |
Exod | LinVB | 6:16 | Tala nkombo ya bana ba Levi na bankoko ba bango : Gerson, Keat na Merari. Levi aumeli na bomoi mibu monkama na ntuku isato na nsambo. | |
Exod | LinVB | 6:18 | Bana ba Keat : Amram, Yisar, Kebron na Uziel. Keat aumeli na bomoi mibu monkama na ntuku isato na misato. | |
Exod | LinVB | 6:20 | Amram abali Yokebed, tata mwasi wa ye ; ye aboti Arone na Mose. Amram aumeli na bomoi mibu monkama na ntuku isato na nsambo. | |
Exod | LinVB | 6:23 | Arone abali Eliseba, mwana wa Aminadab, ndeko wa Nakason ; oyo aboteli ye Nadab, Abiu, Eleazar na Itamar. | |
Exod | LinVB | 6:25 | Eleazar, mwana wa Arone, abali mwana mwasi moko wa Putiel ; oyo aboteli ye Pinekas. Bazalaki bakonzi ba mabota ma bato ba Levi, etuka na etuka. | |
Exod | LinVB | 6:26 | Yawe alobaki na Arone mpe na Mose : « Bobimisa bana ba Israel o mokili mwa Ezipeti, limpinga na limpinga. » | |
Exod | LinVB | 6:27 | Bango nde, Mose na Arone, balobaki na Farao, mokonzi wa Ezipeti, ’te atika bana ba Israel balongwa o Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 6:29 | maloba maye : « Ngai Yawe, loba na Farao, mokonzi wa Ezipeti, maloba manso nakoloba na yo. » | |
Chapter 7
Exod | LinVB | 7:1 | Yawe alobi na Mose : « Tala, nakomisi yo lokola nzambe o miso ma Farao, mpe ndeko wa yo Arone lokola profeta wa yo. | |
Exod | LinVB | 7:2 | Loba na ye manso nakotinda yo, mpe ndeko wa yo Arone akoloba mango na Farao mpo ’te atika bana ba Israel balongwa o mokili mwa ye. | |
Exod | LinVB | 7:3 | Ngai nde nakokomisa Farao motó makasi, mpe nakolakisa bilembo ebele na makamwisi mingi o Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 7:4 | Farao akoyoka bino te ; ngai nakolakisa ba-Ezipeti bokasi bwa ngai, mpe na bitumbu binene nakobimisa mampinga ma ngai, bato ba ngai, ba-Israel o Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 7:5 | Ba-Ezipeti bakoyeba ’te nazali Yawe o mokolo nakotandela bango loboko la ngai mpe o mokolo nakobimisa bana ba Israel o mokili mwa bango. » | |
Exod | LinVB | 7:7 | Mose akokisi mibu ntuku mwambe, Arone mibu ntuku mwambe na misato o ntango bazalaki koloba na Farao. | |
Exod | LinVB | 7:9 | « Soko Farao alobi na bino : Bosala likamwisi, yo Mose oloba na Arone : kamata lingenda lya yo mpe bwaka lyango o boso bwa Farao, mpe likobongwana nyoka. » | |
Exod | LinVB | 7:10 | Mose na Arone bakei epai ya Farao mpe basali lokola Yawe atindaki. Arone abwaki lingenda lya ye o boso bwa Farao na bato ba ye, mpe lingenda libongwani nyoka. | |
Exod | LinVB | 7:11 | Kasi Farao abengi bato ba bwanya na banganga ba ye baya na nkisi ya bango ; mpe banganga ba Ezipeti basali se ndenge yoko. | |
Exod | LinVB | 7:12 | Moto na moto abwaki lingenda lya ye mpe lingenda libongwani nyoka, kasi lingenda lya Arone limeli mangenda ma bango. | |
Exod | LinVB | 7:15 | Lobi na ntongo, okende kokutana na Farao o ngongamei akokende penepene na ebale, osila ye kuna o libongo lya Nil. Kamata lingenda liye libongwanaki nyoka. | |
Exod | LinVB | 7:16 | Loba na ye : Yawe, Nzambe wa ba-Ebrei, atindi ngai naloba na yo : Tika bato ba ngai bakende kokumisa ngai o eliki. Tee lelo olingi te. | |
Exod | LinVB | 7:17 | Yango wana Yawe alobi ape : Nakolakisa yo ’te ngai nazali Yawe. Na lingenda liye lisali o loboko la ngai nakobete mai ma ebale, mpe mai makobongwana makila. | |
Exod | LinVB | 7:18 | Mbisi ikokufa o mai, ebale ekolu-mba nsolo ebe, mpe ba-Ezipeti bakokoka komele mai ma ebale lisusu te. » | |
Exod | LinVB | 7:19 | Yawe alobi na Mose : « Loba na Arone : Kamata lingenda lya yo mpe tanda loboko likolo lya mai ma Ezipeti : o miluka, o mingala, o maziba. Bisika binso mai mazali makobongwana makila. Ezipeti mobimba, ná nzete ná mabanga, ekotonda na makila. » | |
Exod | LinVB | 7:20 | Mose na Arone basali lokola Yawe atindaki bango. Bongo Arone atomboli lingenda lya ye mpe abeti mai ma ebale o miso ma Farao na bato ba ye, mpe mai manso ma ebale mabongwani makila. | |
Exod | LinVB | 7:21 | Mbisi ikufi mpe ebale elumbi nsolo ebe ; mpe ba-Ezipeti bakoki komele mai ma ebale lisusu te ; bipai binso o Ezipeti ezalaki se makila na makila. | |
Exod | LinVB | 7:22 | Kasi banganga ba Ezipeti basali se bongo na nkisi ya bango. Farao alakisi motó makasi, ayoki bango te, se lokola Yawe ayebisaki. | |
Exod | LinVB | 7:24 | Bato banso ba Ezipeti batimoli mabulu penepene na ebale mpo ’te ba-zwa mai ma komele, mpo mai ma komele mazalaki o ebale lisusu te. | |
Exod | LinVB | 7:26 | Yawe alobi na Mose : « Kende epai ya Farao mpe loba na ye : Yawe alobi ape : Tika bato ba ngai bakende mpo ’te bakumisa ngai. | |
Exod | LinVB | 7:28 | Ebale ekoto-nda na magbololo, makobima o mai mpe makokoto o ndako ya yo, o ndako ya kolala, o mbeto ya yo, o ndako ya basaleli mpe ya bato ba yo banso, o bitumbelo bya mampa mpe o masasu ma kolamba mampa. | |
Chapter 8
Exod | LinVB | 8:1 | Yawe alobi na Mose : « Loba na Arone ape : Simba lingenda mpe tanda loboko la yo likolo lya ebale, miluka mpe maziba, mpe bimisa magbololo o mokili mwa Ezipeti. » | |
Exod | LinVB | 8:2 | Arone atandi loboko likolo lya mai ma Ezipeti, magbololo mabimi o mai mpe matondi o mokili mwa Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 8:3 | Kasi banganga basali se bongo na nkisi ya bango, mpe babimisi magbololo o mokili mwa Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 8:4 | Farao abengi Mose na Arone mpe alobi : « Bobondela Yawe ’te alongola magbololo epai ya ngai mpe epai ya bato ba ngai ; bongo nakotika bato ba yo bakende kobonzela Yawe mabonza. » | |
Exod | LinVB | 8:5 | Mose alobi na Farao : « Yo moto olakisa ngai ntango ebongi ’te nasambelela yo, basaleli mpe bato ba yo, mpo ’te magbololo masila epai ya yo, malongwa mpe o ndako ya yo, mpe matikala bobele o ebale. » | |
Exod | LinVB | 8:6 | Farao azongisi : « Nalingi bobele lobi. » Mose alobi lisusu : « Ekosalema lokola yo moko olingi. Bongo oyeba ’te nzambe mosusu akokani na Yawe Nzambe wa biso te. | |
Exod | LinVB | 8:7 | Magbololo makolongwa epai ya yo, o ndako ya yo mpe epai ya bato ba ekolo ya yo ; makotikala bobele o ebale. » | |
Exod | LinVB | 8:8 | Mose na Arone balongwi epai ya Farao, mpe Mose abeleli Yawe mpo ya magbololo atindaki epai ya Farao. | |
Exod | LinVB | 8:9 | Yawe asali lokola Mose asengeki, mpe magbololo makufi o ndako, o mapango mpe o bilanga. | |
Exod | LinVB | 8:11 | Emoni Farao ’te abiki, alakisi lisusu motó makasi, ayoki bango te se lokola Yawe ayebisaki. | |
Exod | LinVB | 8:12 | Yawe alobi na Mose : « Loba na Arone ape : Tanda lingenda lya yo mpe bete na lyango mabelé mpo ’te mabimisa mputulu, bongo mputulu ekobongwana ngungi o Ezipeti mobimba. » | |
Exod | LinVB | 8:13 | Arone asimbi lingenda lya ye mpe atandi loboko, abeti mabelé mpe amatisi mputulu, bongo ngungi ibimi bipai binso likolo lya bato mpe lya nyama ; mputulu inso ya mabelé iyei kobongwana ngungi o Ezipeti mobimba. | |
Exod | LinVB | 8:14 | Banganga ba Ezipeti bameki kosala se ndenge yoko na nkisi ya bango mpo ya kobimisa ngungi, kasi bakoki te. Bipai binso ngungi iyei kotungisa bato na nyama. | |
Exod | LinVB | 8:15 | Banganga balobi na Farao : « Se Nzambe alingi likambo liye » ; kasi Farao alakisi se motó makasi, ayoki bango te, se lokola Yawe ayebisaki. | |
Exod | LinVB | 8:16 | Yawe alobi na Mose : « Kende koteleme o nzela na ntongo mpenza, ntango Farao akokende o libongo lya ebale, mpe loba na ye : Yawe alobi ape : “Tika bato ba ngai bakende kokumisa ngai. | |
Exod | LinVB | 8:17 | Soko oapi kotika bato ba ngai, nakotindela yo ná bato ba yo ná ekolo ya yo mobimba mpese ikotela ndako ya bango inso.” Ndako ya ba-Ezipeti ikotonda na mpese, ata mabelé esika bakofanda makotonda na mpese. | |
Exod | LinVB | 8:18 | O mokolo mona nakobikisa mokili mwa Gesen, esika bato ba ngai bakofanda ; mpese ikosala wana te, mpo oyeba ’te ngai Yawe nazali o mokili mwa bino. | |
Exod | LinVB | 8:19 | Nakokabola bato, epai yoko bato ba ngai, epai esusu bato ba yo ; mpe lobi nakolakisa likamwisi lyango. » | |
Exod | LinVB | 8:20 | Yawe asali bongo, mpe mpese ikoti ebele o ndako ya Farao, o ndako ya bato ba ye mpe o ekolo mobimba ya Ezipeti ; ekolo ebebi nye mpo ya mpese. | |
Exod | LinVB | 8:21 | Farao abengi Mose na Arone, alobi na bango : « Bokende kobonzela Nzambe wa bino, kasi awa o mokili moye. » | |
Exod | LinVB | 8:22 | Mose azongisi : « Kosala bongo ekobongo te, mpamba te, mabonza biso tokobonzela Yawe makoyokisa ba-Ezipeti nsomo. Soko tokobonza mabonza o miso ma ba-Ezipeti, maye makoyokisa bango nsomo, bakobwakela biso mabanga te ? | |
Exod | LinVB | 8:23 | Tokosala mobembo mwa mikolo misato o eliki, mpe bobele kuna tokobonzela Yawe mabonza ma biso lokola alobaki na biso. » | |
Exod | LinVB | 8:24 | Farao alobi : « Nakotika bino bokende kobonzela Nzambe wa bino mabonza o eliki, kasi bokende mosika te. Bosambela mpo ya ngai. » | |
Exod | LinVB | 8:25 | Mose alobi : « Ntango nakolongwa epai ya yo nakobondela Yawe mpo ya yo. Lobi mpese ikolongwa epai ya yo, epai ya bato ba yo mpe o ekolo mobimba. Kasi Farao, okosa biso te, opekisa biso lisusu te kokende kobonzela Yawe mabonza. » | |
Exod | LinVB | 8:27 | Yawe asali lokola Mose asengeki, mpe mpese ilongwi o ndako ya Farao, epai ya bato ba ye mpe o ekolo mobimba. Etikali ata yoko te. | |
Chapter 9
Exod | LinVB | 9:1 | Yawe alobi na Mose : « Kende epai ya Farao mpe loba na ye : Yawe, Nzambe wa ba-Ebrei, alobi ape : “Tika bato ba ngai bakende kokumisa ngai.” | |
Exod | LinVB | 9:3 | loboko la Yawe lokobete bitonga bisali o bilanga, farasa, mpunda, kamela, ngombe na bibwele ; akotindela yango bokono bobe. | |
Exod | LinVB | 9:4 | Yawe akokabola bitonga bya Israel na bya ba-Ezipeti. Epai ya bana ba Israel ata nyama yoko ekokufa te. | |
Exod | LinVB | 9:6 | Mokolo mwa nsima Yawe asali bobele bongo : nyama inso ya ba-Ezipeti ikufi, kasi epai ya ba-Israel ata nyama yoko ekufi te. | |
Exod | LinVB | 9:7 | Farao atindi bato mpo batala, mpe ya solo, epai ya ba-Israel ata nyama yoko ekufi te. Kasi Farao alakisi se motó makasi, aapi kotika bango bakende. | |
Exod | LinVB | 9:8 | Yawe alobi na Mose mpe na Arone : « Bokamata mputulu ya matuka o maboko, bongo Mose abwaka yango o likolo o boso bwa Farao. | |
Exod | LinVB | 9:9 | Yango ekokoma mpumbulu eye ekopanzana o Ezipeti mobimba mpe ekopesa mbuma ikobimisa mayina o nzoto ya bato mpe ya nyama o Ezipeti mobimba. » | |
Exod | LinVB | 9:10 | Bakamati mputulu ya matuka mpe bakei koteleme liboso lya Farao. Mose abwaki yango o likolo mpe bato ná nyama bakomi na mbuma o nzoto, ekomi mpota mpe ebimisi mayina. | |
Exod | LinVB | 9:11 | Banganga nkisi bakoki koteleme liboso lya Farao te mpo ya mbuma ebele o nzoto ; mpamba te, nzoto ya bango mpe itondi na mbuma se lokola ba-Ezipeti banso. | |
Exod | LinVB | 9:12 | Yawe akomisi Farao motó makasi ; Farao aapi koyoka bango, se lokola Yawe ayebisaki Mose. | |
Exod | LinVB | 9:13 | Yawe alobi na Mose : « Kende lobi na ntongo epai ya Farao mpe loba na ye : Yawe, Nzambe wa ba-Ebrei, alobi ape : “Tika bato ba ngai bakende kokumisa ngai. | |
Exod | LinVB | 9:14 | Mbala eye nakotindela yo ná basaleli ba yo ná ekolo ya yo mobimba bitumbu bya ngai binso, mpo oyeba ’te nzambe mosusu lokola ngai azali te o nse mobimba.” | |
Exod | LinVB | 9:15 | Soko natandaki loboko mpe natindelaki yo ná ekolo ya yo mobimba bokono bobe, mbele osili olimwi o mokili. | |
Exod | LinVB | 9:16 | Kasi natiki yo na bomoi mpo ’te omono bokasi bwa ngai mpe basakola nkombo ya ngai o nse mobimba. | |
Exod | LinVB | 9:18 | Lobi o ngonga eyemei nakonokisa mbula ya mabanga, ya makasi mpenza, lokola emononoki naino o Ezipeti te ut’o libandela lya mokili tee lelo. | |
Exod | LinVB | 9:19 | Sikawa tinda bato bakende kosongisa o lopango bibwele na mpe binso bisali o bilanga. Mbula ya mabanga ekonokela mpe ekoboma bato na nyama inso isali o bilanga mpe isongi o lopango te. » | |
Exod | LinVB | 9:20 | Basaleli ba Farao, baye babangi liloba lya Yawe, bakotisi bakengeli na bibwele bya bango o lopango. | |
Exod | LinVB | 9:21 | Kasi basusu batali liloba lya Yawe mpamba, batiki bakengeli na bibwele bya bango o bilanga. | |
Exod | LinVB | 9:22 | Yawe alobi na Mose : « Tanda loboko epai ya likolo, mbula ya mabanga enokela mokili mobimba mwa Ezipeti, bato ná nyama, ná mpe matiti ma bilanga o mokili mwa Ezipeti. » | |
Exod | LinVB | 9:23 | Mose atandi loboko epai ya likolo mpe Yawe atindi nkake mpe anokisi mbula ya mabanga. Nkake ekwei o nse mpe Yawe anokisi mbula ya mabanga o mokili mwa Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 9:24 | Mbula ya mabanga enoki, móto mobimi o kati ya mbula : mabanga mazalaki makasi mpenza lokola emononoki naino o Ezipeti te ut’o ebandela ya ekolo. | |
Exod | LinVB | 9:25 | O Ezipeti mobimba mbula ya mabanga ebebisi mbuma inso o bilanga, ná bato ná mpe nyama. Ebebisi matiti manso ma bilanga mpe ebuki nzete inso ya mbuma. | |
Exod | LinVB | 9:27 | Farao abengi Mose na Arone mpe alobi na bango : « Mbala eye nandimi mabe ma ngai. Yawe alongi, ngai nde na bato ba ngai tokiti. | |
Exod | LinVB | 9:28 | Bobondela Yawe atika kobetisa nkake mpe konokisa mbula ya mabanga. Ya solo, nakotika bato ba yo bakende, bongo bokotikala awa lisusu mikolo mingi te. » | |
Exod | LinVB | 9:29 | Mose alobi na ye : « Ntango nakobima o mboka, nakotanda maboko epai ya Yawe : nkake ekosila mpe mbula ya mabanga ekonoko lisusu te ; bongo okoyeba ’te Yawe azali nkolo wa nse. | |
Exod | LinVB | 9:31 | Ntokia mpe loso ibebaki, mpo loso esilaki kobimisa mitó mpe ntokia esilaki kobimisa fulele. | |
Exod | LinVB | 9:33 | Mose abimi o ndako ya Farao mpe atiki mboka. Atandi maboko epai ya Yawe ; nkake na mbula ya mabanga iyei kosila mpe mbula enoki lisusu o mokili te. | |
Exod | LinVB | 9:34 | Emoni Farao ’te mbula ya mabanga na nkake isili, asali mabe lisusu, ye na bato ba ye balakisi se motó makasi. | |
Chapter 10
Exod | LinVB | 10:1 | Yawe alobi na Mose : « Kende epai ya Farao, zambi nakomisi ye na bato ba ye motó makasi mpo nalakisa makamwisi o kati ya bango. | |
Exod | LinVB | 10:2 | Bongo okoka kosolola na mwana wa yo mpe na nkoko wa yo boniboni nasalaki na ba-Ezipeti, na mpe makambo manene nasalaki o kati ya bango, mpo ’te oyeba ’te nazali Yawe. » | |
Exod | LinVB | 10:3 | Mose na Arone bakei epai ya Farao mpe balobi na ye : « Yawe, Nzambe wa ba-Ebrei, alobi ape : Mikolo boni naino okoapa komikitisa o miso ma ngai ? Tika bato ba ngai bakende kokumisa ngai. | |
Exod | LinVB | 10:5 | Makotonda bipai binso mpe okomono mabelé lisusu te ; makolia biloko binso bitikali, biye mbula ya mabanga ebebisaki te ; makolia nzete inso o bilanga bya bino. | |
Exod | LinVB | 10:6 | Makotonda o ndako ya yo, ya basaleli ba yo mpe ya bato banso ba Ezipeti, lokola batata na bankoko ba bino bamonoki naino te, ut’o mokolo bato bafandi wana tee lelo. » Na nsima Mose abimi o ndako ya Farao. | |
Exod | LinVB | 10:7 | Bato ba Farao balobi na ye : « Mikolo boni moto oyo akosala biso naino mabe ? Tika bango bakende kokumisa Yawe Nzambe wa bango. Naino omoni te ’te Ezipeti ezali kobeba nye ? » | |
Exod | LinVB | 10:8 | Babengi lisusu Mose na Arone epai ya Farao ; oyo alobi na bango : « Bokende kokumisa Yawe Nzambe wa bino, kasi baye bakokende kuna, bango banani ? » | |
Exod | LinVB | 10:9 | Mose azongisi : « Tokokende elongo na bilenge mpe na babange ba biso, elongo na bana babali na bana basi ba biso, tokokamata mpe ngombe na mpata ya biso, mpo ezali eyenga enene ya Yawe. » | |
Exod | LinVB | 10:10 | Farao alobi : « Yawe azala na bino soko natiki bino bokende elongo na basi ba bino mpe na bana ba bino. Bosali na mayele mabe, solo ! | |
Exod | LinVB | 10:11 | Eloko te ! Bokende kokumisa Yawe se bino babali, eloko bosali kosenge, se yango. » Mpe babengani bango o miso ma Farao. | |
Exod | LinVB | 10:12 | Yawe alobi na Mose : « Tanda loboko likolo lya mokili mwa Ezipeti mpe byanga mapalela, matonda o mokili mwa Ezipeti mpe malia matiti manso ma mokili, maye matikalaki nsima ya mbula ya mabanga. » | |
Exod | LinVB | 10:13 | Mose atandi lingenda lya ye likolo lya mokili mwa Ezipeti, mpe Yawe atindi mompepe mwa Esti, mompepe mopepi makasi butu moi. Na ntongo mompepe mona momemi mapalela. | |
Exod | LinVB | 10:14 | Mapalela mapanzani o Ezipeti mobimba, mayei kokita ebele o mokili mwa Ezipeti. Bamonoki naino bongo liboso te ; nsima mpe bakomono bongo lisusu te. | |
Exod | LinVB | 10:15 | Matondi o mokili mobimba mpe mabebisi ekolo. Malei matiti manso ma mokili na mbuma ya nzete inso, iye mbula ya mabanga ebebisaki te ; eloko yoko ebesu etikali o nzete to o ndunda ya bilanga te o mokili mobimba mwa Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 10:16 | Farao abengisi Mose na Arone noki mpe alobi : « Nasali lisumu o miso ma Yawe Nzambe wa bino mpe o miso ma bino. | |
Exod | LinVB | 10:17 | Nabondeli bino, bolimbisa ngai mabe nasali mbala eye lisusu, bobondela Yawe Nzambe wa bino alongolela ngai etumbu ya nsomo ekoboma biso. » | |
Exod | LinVB | 10:19 | Yawe alongoli mompepe mwa Esti, abimisi mompepe mwa Westi, mompepe makasi mpenza, molongoli mapalela manso mpe mosongisi mango epai ya Mbu Etane. Etikali lisusu ata lipalela lyoko te o mokili mobimba mwa Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 10:21 | Yawe alobi na Mose : « Tanda loboko epai ya likolo mpo ’te molili makasi mosipa mokili mwa Ezipeti. » | |
Exod | LinVB | 10:22 | Mose atandi loboko epai ya likolo mpe molili makasi mosipi mokili mobimba mikolo misato. | |
Exod | LinVB | 10:23 | Bato bakoki komonono te mpe o mikolo misato mina moto moko te alongwi o esika azalaki. Kasi moi mosalaki o bisika binso bana ba Israel bazalaki. | |
Exod | LinVB | 10:24 | Farao abengi Mose mpe alobi na ye : « Bokende kosalela Yawe ; se ngombe na mpata itikala awa. Basi na bana ba bino bakoki kokende na bino elongo. » | |
Exod | LinVB | 10:25 | Mose alobi : « Yo moto okopesa biso miboma na mabonza mpo tobonzela Yawe Nzambe wa biso ? | |
Exod | LinVB | 10:26 | Bibwele bya biso bikokende na biso elongo ; ata nyama yoko te ekotikala awa, zambi o kati ya yango biso moko tokopono iye tokobonzela Yawe Nzambe wa biso. Tee tokokoma kuna tokoyeba te nini tokobonzela Yawe. » | |
Exod | LinVB | 10:28 | Farao alobi na Mose :« Longwa awa, obima o miso ma ngai lisusu te ; mokolo okobima lisusu o miso ma ngai, okokufa ! » | |
Chapter 11
Exod | LinVB | 11:1 | Yawe alobi na Mose : « Nakotindela Farao na ba Ezipeti naino etumbu yoko ; nsima yango akotika bino bokende, akobengana bino kutu. | |
Exod | LinVB | 11:2 | Yango wana loba na ba-Israel ’te mobali moko moko asenge moninga mobali, mpe mwasi moko moko asenge moninga mwasi, biloko bya palata mpe bya wolo. » | |
Exod | LinVB | 11:3 | Yawe asalisi ba-Israel mpo ’te ba-Ezipeti bandimela bango, mpo Mose azalaki moto wa lokumu o Ezipeti, o miso ma bato ba Farao mpe ma bato banso. | |
Exod | LinVB | 11:5 | Bana ba yambo ba Ezipeti banso bakokufa, banda mwana wa yambo wa Farao, oyo akokitana tata wa ye o ngwende, na mwana wa yambo wa mwasi moombo, oyo akonikaka fufu, tee bana ba yambo ba nyama. | |
Exod | LinVB | 11:6 | O mokili mobimba mwa Ezipeti bakolela makasi, lokola eyokani naino te mpe lokola ekoyokana nsima lisusu te. | |
Exod | LinVB | 11:7 | Kasi epai ya bana ba Israel ata mbwa ekogangela moto to nyama te ; bongo okoyeba ’te Yawe akosala na Israel mpe na Ezipeti ndenge yoko te. | |
Exod | LinVB | 11:8 | O mokolo mona basaleli ba yo banso bakoya koluka ngai, bakokumbamela ngai mpe bakoloba : “Longwa, yo na bana ba yo, baye bakolanda yo !” Na nsima nakolongwa awa. » Mpe Mose atoki na nkanda, abimi o ndako ya Farao. | |
Exod | LinVB | 11:9 | Yawe alobi na Mose : « Farao akondimela yo te, bongo nakosala lisusu makamwisi manene o mokili mwa Ezipeti. » | |
Chapter 12
Exod | LinVB | 12:2 | « O miso ma bino sanza eye eleka sanza inso na lokumu : ezala sanza ya yambo ya mobu. | |
Exod | LinVB | 12:3 | Boloba na bato banso ba Israel ape : O mokolo mwa zomi mwa sanza eye, bakamata mpata o libota lyoko lyoko, o ndako yoko yoko. | |
Exod | LinVB | 12:4 | Soko motango mwa bato ba libota mopusi moke mpo ya kosilisa kolia mpata, basangana na libota lisusu lisali penepene, batala motango mwa bato. Bokopono nyama ekoki mpo ’te bato banso balia. | |
Exod | LinVB | 12:5 | Mpata ena ezala na mbeba te, ezala ya mobali, ya mbula yoko ; to bokoki kokamata ntaba. | |
Exod | LinVB | 12:6 | Bobomba yango kin’o mokolo mwa zomi na minei mwa sanza eye ; mokolo mona bana ba Israel banso baboma yango na mpokwa. | |
Exod | LinVB | 12:7 | Bakamata makila mpe bapakola mango o mabaya ma mpe-mbeni mpe ma likolo ma bisibeli bya ndako esika bakolia yango. | |
Exod | LinVB | 12:8 | Bakalinga nsuni na motó mpe balia yango na butu mpenza ; balia yango na mampa mavimbi te mpe na ndunda bololo. | |
Exod | LinVB | 12:9 | Balia yango mobesu te, balamba yango na mai mpe te, kasi bakalinga yango na móto ; balia mpe motó, makolo na nsopo. | |
Exod | LinVB | 12:11 | Ntango bokolia yango, bolata bilamba bya mobembo, mapapa o makolo mpe lingenda o maboko : bolia noki, zambi ezali PASIKA, eyenga ya kokumisa Nzambe. | |
Exod | LinVB | 12:12 | O butu bona nakoleka o mokili mwa Ezipeti mpe nakoboma bana ba yambo banso o mokili mwa Ezipeti, ná bana ba bato ná bana ba nyama inso. Ngai Yawe nakosambisa banzambe banso ba Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 12:13 | Makila mapakolami o ndako makolakisa esika bofandi. Esika nakomono makila, nakoleka mpamba mpe bokobika o etumbu ya liwa mokolo nakotumbola mokili mwa Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 12:14 | Bokokomisa mokolo mona mokolo mwa eyenga, mokolo mwa kokumisa Yawe. O mabota ma bino bokosepela yango mobu na mobu seko. | |
Exod | LinVB | 12:15 | Mikolo nsambo mobimba, bolia mampa mazangi nkisi. Banda mokolo mwa yambo, bolongola nkisi ya mampa o ndako ya bino, zambi moto oyo alei mampa malambami na nkisi, banda mokolo mwa yambo tee mokolo mwa nsambo, balongola ye o libota lya Israel. | |
Exod | LinVB | 12:16 | Mokolo mwa yambo mpe mwa nsambo bosangana lisanga lisantu, bosala mosala moko te, bolamba se bilei bisengeli na moko moko wa bino. | |
Exod | LinVB | 12:17 | Bosepela eyenga ya Mampa mazangi nkisi, zambi o mokolo monamei ngai nabimisaki mabota ma bino o mokili mwa Ezipeti. Mabota manso makoya nsima matala mokolo mona seko lokola eyenga ya lotomo. | |
Exod | LinVB | 12:18 | O sanza ya yambo, na mpokwa ya mokolo mwa zomi na minei, bolia mampa mazangi nkisi tee mpokwa ya mokolo mwa ntuku ibale na moko. | |
Exod | LinVB | 12:19 | Mikolo nsambo mobimba bosala na nkisi ya mampa o ndako ya bino te ; moto oyo akolia mampa malambami na nkisi, balongola ye o libota lya Israel, azala mompaya to mwana mboka. | |
Exod | LinVB | 12:20 | Ata bokofanda wapi, bolia mampa te maye malambami na nkisi, bolia se mampa mazangi nkisi. » | |
Exod | LinVB | 12:21 | Mose abengi bakolo ba Israel banso, alobi na bango : « O mabota ma bino manso, boluka mwa mpata mpo ya kolia o mokolo mwa Pasika. | |
Exod | LinVB | 12:22 | Bosopa makila o sani, bokamata nkasa ya lumbalumba, botuna yango o makila mana. Bopakola mango o mabaya ma likolo mpe ma mpembeni ya ezibeli ya ndako. Moto moko abima o ndako te tee ntongo sa. | |
Exod | LinVB | 12:23 | Bongo ntango Yawe akoleka o mokili mwa Ezipeti mpo ’te atumbola mwango, soko amoni makila o mabaya ma likolo mpe ma mpembeni ya ezibeli ya ndako, akoleka, mpe akondima te ’te Mobomi ákoto o ndako ya bino. | |
Exod | LinVB | 12:25 | Ntango bokoyingela o mokili moye Nzambe alakelaki bino, bolanda bobele mobeko mona. | |
Exod | LinVB | 12:27 | bokoyebisa bango : Ezali libonza lya Pasika lya botondi Yawe, zambi mokolo apesaki ba-Ezipeti etumbu, alekaki ndako ya bana ba Israel o Ezipeti, abomaki moto moko te. » Na nsima bato bafukami mpe bakumbami. | |
Exod | LinVB | 12:29 | O kati ya butu Yawe abomi bana ba yambo banso o mokili mwa Ezipeti, ná mwana wa Farao, oyo ase-ngelaki kokitana ye o ngwende, ná mwana wa yambo wa moto wa boloko, ná bana ba yambo ba nyama. | |
Exod | LinVB | 12:30 | Farao alamuki na butu, ye na basaleli ba ye na ba-Ezipeti banso. O Ezipeti bakomi kolela makasi, zambi o ndako yoko yoko moto moko awei. | |
Exod | LinVB | 12:31 | O kati ya butu Farao abengi Mose na Arone, alobi na bango : « Bolongwa o kati ya bato ba ngai, bino na bana ba Israel banso ; bokende kokumisa Yawe lokola bosengeki. | |
Exod | LinVB | 12:32 | Bokamata mpe nyama ya bino inene mpe ike lokola bosengeki ; bokende mpe bosambela Nzambe abenisa ngai. » | |
Exod | LinVB | 12:33 | Ba-Ezipeti babondeli bango mingi ’te balongwa noki, balobi : « Mbele tokokufa biso banso. » | |
Exod | LinVB | 12:34 | Bato bakamati fufu ya bango, batiaki nkisi, kasi fufu evimbi naino te ; bakangi sani o minkoto mya bango mpe bamemi yango o mapeke. | |
Exod | LinVB | 12:35 | Bana ba Israel basalaki lokola Mose alobaki ; basengeki ba-Ezipeti biloko bya palata mpe bya wolo na mpe minkoto. | |
Exod | LinVB | 12:36 | Yawe asalaki ’te ba-Ezipeti balinga bango mpe bandima kopesa bango biloko base-ngeki. Babotoli bongo ba-Ezipeti biloko mingi. | |
Exod | LinVB | 12:37 | Bana ba Israel balongwi o Ramses mpe bakei nzela ya Sukot. Bazalaki babali nkoto nkama motoba, kota-nga basi na bana te. | |
Exod | LinVB | 12:38 | Basusu baike bakei na bango nzela yoko ; bakei mpe na nyama ya bango, inene mpe ike. | |
Exod | LinVB | 12:39 | Balambaki mampa mazangi nkisi na fufu eye bakamataki o Ezipeti. Awa babenganaki bango noki ba-zwaki ntango ya kolamba mampa na nkisi te. Ntango ya kolengele bilei bya mobembo ezalaki te. | |
Exod | LinVB | 12:41 | Bobele nsima ya mibu myango bato banso ba ekolo ya Yawe balongwi o mokili mwa Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 12:42 | Butu bona Yawe alali te, asalisi ba-Israel mpo ’te balongwa o Ezipeti ; yango wana bana ba Israel balala te o butu bona ; bakumisa bongo Yawe o bileko binso seko. | |
Exod | LinVB | 12:43 | Yawe alobi na Mose mpe na Aron : « Tala mibeko mya kolia limpati lya Pasika : moto wa ekolo esusu alia Pasika te. | |
Exod | LinVB | 12:44 | Nzokande moombo oyo bosombaki na mosolo, soko bokatisaki ye nzoto, akoki kolia Pasika. | |
Exod | LinVB | 12:46 | Bolia yango se o ndako yoko. Bokoki kobima na yango o ndako te. Bobuka ata monkuwa moko mwa mpata te. | |
Exod | LinVB | 12:48 | Soko moto wa ekolo esusu ayei kofanda epai ya bino, mpe alingi kolia Pasika mpo ’te akumisa Yawe, babali banso ba ndako ya ye basengeli kokatema nzoto, bongo ndakoki kolia Pasika, akomi lokola moto wa mboka. Kasi oyo akatemi nzoto te, akoki kolia yango te. | |
Chapter 13
Exod | LinVB | 13:2 | « Bonzela ngai bana ba yambo banso ba Israel, baye babimi liboso o libumu lya mama. Bazala bana ba bato to bana ba nyama, banso bazali ba ngai. » | |
Exod | LinVB | 13:3 | Mose alobi na bato : « Bokundolaka o mitema mokolo moye bobimaki o Ezipeti, o ekolo ya boombo ; mpo Yawe abimisi bino na bokasi bwa loboko la ye. Bongo bolia mampa te, maye malambami na nkisi. | |
Exod | LinVB | 13:5 | Mokolo Yawe asili kokotisa bino o mokili mwa Kanana, mokili mwa ba-Iti, ba-Amor, ba-Ivi na ba-Yebus, mokili moye alayelaki bankoko ba bino ’te akopesa bino, mokili motondi na mabéle ma ngombe mpe na mafuta ma nzoi, mokolo mona bosepela eyenga ya Pasika se o sanza eyemei. | |
Exod | LinVB | 13:6 | Mikolo nsambo mobimba bolia mampa mazangi nkisi, mpe mokolo mwa nsambo mosala eyenga ya kokumisa Yawe. | |
Exod | LinVB | 13:7 | Mikolo miye nsambo bolia bobele mampa mazangi nkisi. O mokili mwa bino mobimba mampa malambami na nkisi to nkisi mpamba ezala o ndako ya bino te. | |
Exod | LinVB | 13:8 | O mokolo mona okoloba na mwana wa yo ape : ‘Nakosala bongo mpo ya maye Yawe asalaki ngai o mokolo nabimaki o Ezipeti.’ | |
Exod | LinVB | 13:9 | Nzambe abimisaki yo na bokasi bwa ye o mokili mwa Ezipeti ; yango wana okolata elembo o loboko mpe o elo-ngi, mpo ’te mobeko mwa Yawe mosala seko o monoko mwa yo. | |
Exod | LinVB | 13:11 | Mokolo Yawe asili kokotisa yo o mokili mwa Kanana lokola alayelaki yo na bankoko ba yo, mpe asili kopesa yo mwango, | |
Exod | LinVB | 13:12 | obonzela Yawe mwana wa yo oyo abimi liboso o libumu lya mama wa ye, bonza mpe nyama ya yambo. Bana babali banso bazali ba Yawe. | |
Exod | LinVB | 13:13 | Mpo ya kosikola mwana wa yambo wa mpunda, ofuta mpata. Soko osikoli yango te, buka yango nkingo. Osengeli kosikola bana babali ba yo ba yambo banso. | |
Exod | LinVB | 13:14 | Soko na nsima mwana wa yo wa mobali akotuna yo ntina ya likambo liye, okoloba na ye : “Nzambe abimisaki biso o Ezipeti, o mokili mwa boombo na bokasi bwa loboko la ye. | |
Exod | LinVB | 13:15 | O ntango Farao alakisaki motó makasi mpe aapaki kotika biso tolongwa o mokili mwa ye, Yawe abomaki bana ba yambo banso ba Ezipeti, ná bana ba bato ná bana ba nyama. Yango wana nakobonzela Yawe bana babali ba yambo banso, kasi mwana wa yambo wa bato nakosikola ye.” | |
Exod | LinVB | 13:16 | Yango wana okolata elembo o loboko mpe o elongi ; ekosalisa yo mpo ’te okundola yango o motema, mpo Yawe abimisaki biso o Ezipeti na bokasi bwa loboko la ye. » | |
Exod | LinVB | 13:17 | Awa Farao atiki bato bakende, Nzambe akambi bango o nzela ya mokili mwa ba-Filisti te, ata nzela eye ezalaki nzela ekuse ; zambi Nzambe amilobeli : Soko bato bakokutana na banguna, mbele bakoyoka mawa zambi balongwi o Ezipeti, mbele bakosonga kuna. | |
Exod | LinVB | 13:18 | Yango wana Nzambe atambwisi bango o nzela elai, atindi bango o nzela ya eliki epai ya Mbu ya Nsoló. Elongwi bana ba Israel o mokili mwa Ezipeti, bamemi bibuneli. | |
Exod | LinVB | 13:19 | Mose akei na minkuwa mya Yosefu, zambi oyo alayisaki bana ba Israel ndai eye : « Mokolo Nzambe akoya kotala bino, bokende na minkuwa mya ngai. » | |
Exod | LinVB | 13:21 | Yawe atamboli na bango elongo ; na moi likonzi lya limpata lilakisi bango nzela mpe na butu likonzi lya móto mongengeli bango mpo ’te bakoka kotambola butu moi. | |
Chapter 14
Exod | LinVB | 14:2 | « Loba na bana ba Israel : Bosongela nzela bouti mpe bopika nganda liboso lya Pi-Akirot, kati ya Migdol na Mbu Etane, liboso lya Baal-Sefon ; botelemisa biema bya bino liboso lya esika ena mpembeni ya Mbu ya Mongwa. | |
Exod | LinVB | 14:3 | Farao akokanisa ’te bana ba Israel bazali kotelengana o mokili, mpo eliki ezali kosinga bango epai na epai. | |
Exod | LinVB | 14:4 | Nakokomisa Farao motó makasi lisusu mpe akoya kolanda bino. Ngai nakoswa lokumu na bosukisi ye na basoda ba ye ; bongo ba-Ezipeti bakoyeba ’te nazali Yawe. » Ba-Israel batosi mobeko moye. | |
Exod | LinVB | 14:5 | Bayebisi mokonzi wa Ezipeti ’te ba-Israel bakimi. Farao na basaleli ba ye babongoli makanisi. Bamituni : « Mpo nini totiki ba-Israel bakende, bakosalela biso mosala lisusu te ? » | |
Exod | LinVB | 14:8 | Yawe akomisi Farao motó makasi lisusu, yango wana alandi bana ba Israel bazalaki kokima na bobateli bwa Yawe. | |
Exod | LinVB | 14:9 | Na farasa mpe na makalo manso ma Farao, na batambwisi farasa mpe na basoda ba makolo, ba-Ezipeti balandi bango mpe bakomi epai ya bango o esika bapiki nganda penepene na mbu, pene na Pi-Akirot, eye etalani na Baal-Sefon. | |
Exod | LinVB | 14:10 | Awa Farao akomi penepene, ba-Israel bamoni ’te ba-Ezipeti balandi bango, bakomi kolenge mpe babandi kobelela Yawe. | |
Exod | LinVB | 14:11 | Balobi na Mose : « O Ezipeti malita mazalaki te ? Bongo okambi biso awa o eliki mpo tokufa ? Awa olongoli biso o Ezipeti, malamu nini osali biso ? | |
Exod | LinVB | 14:12 | O Ezipeti tosili tolobaki na yo : Tika biso tosalela ba-Ezipeti ; malamu tosalela bango, tokufa o eliki te ! » | |
Exod | LinVB | 14:13 | Mose alobi na bango : « Bobanga te, bolendisa mitema mpe bokomono ndenge nini Yawe akosala mpo ’te abikisa bino lelo : ba-Ezipeti bosali komono kuna, bokomono bango mokolo moko lisusu te. | |
Exod | LinVB | 14:15 | Yawe alobi na Mose : « Ntina nini osali kobelela ngai ? Loba na bana ba Israel bakoba kokende. | |
Exod | LinVB | 14:16 | Tombola lingenda lya yo, tanda loboko la yo likolo lya mbu mpe kabola yango mpo ’te bana ba Israel bakoka kokatisa mbu mpe bapolo te. | |
Exod | LinVB | 14:17 | Ngai nakokomisa basoda ba Ezipeti mitó makasi mpo ’te balanda bino. Esika nakosukisa Farao ná basoda ba ye banso, ná makalo ma ye, ná mpe batambwisi farasa ba ye, nakoswa lokumu. | |
Exod | LinVB | 14:18 | Ntango nakoswa lokumu na bokweisi Farao ná makalo ná batambwisi farasa ba ye, ba-Ezipeti bakoyeba ’te ngai nazali Yawe. » | |
Exod | LinVB | 14:19 | Anzelu wa Nzambe, oyo atamboli liboso lya ba-Israel, akomi kolanda bango sikawa. Likonzi lya limpata lilongwi epai ya liboso mpe lileki o nsima ya bango. | |
Exod | LinVB | 14:20 | Likaboli basoda ba ba-Ezipeti na baye ba ba-Israel ; limpata lisalaki liindo mpe lipesi molili butu mobimba, bongo tee ntongo sa bakutani te. | |
Exod | LinVB | 14:21 | Mose atandi loboko likolo lya mbu. Butu mobimba Yawe atindi mompepe makasi mosongisi mai nsima, mokaukisi mbu, mpe mai makabwani. | |
Exod | LinVB | 14:22 | Bana ba Israel baleki o esika mai malongwi, maye makangemi epai na epai, matelemi lokola bifelo, makolo ma bango mapoli te. | |
Exod | LinVB | 14:23 | Ba-Ezipeti balandi bango ; farasa inso ya Farao ná makalo ná batambwisi farasa balandi bango kin’o mbu. | |
Exod | LinVB | 14:24 | Liboso ’te ntongo etana, ut’o likonzi lya móto mpe lya limpata, Yawe atali basoda ba Ezipeti mpe atii mobulu o kati ya bango. | |
Exod | LinVB | 14:25 | Akangisi yika ya makalo o zelo, makalo makomi kotambola se malembe. Ba-Ezipeti bagangi : « Tokima ba-Israel, zambi Yawe azali kobunela bango etumba mpo ’te akweisa biso ! » | |
Exod | LinVB | 14:26 | Yawe alobi na Mose : « Tanda loboko likolo lya mbu mpo ’te mai mazonga mpe mazindisa ba-Ezipeti, ná makalo ná batambwisi farasa ba bango. » | |
Exod | LinVB | 14:27 | Mose atandi loboko likolo lya mbu ; na ntongo mai mazongi o esika mazalaki. Awa basoda ba Ezipeti bazalaki kokima, bakutani na mai : Yawe akweisi bango makalekale o kati ya mbu. | |
Exod | LinVB | 14:28 | Awa mai mazongi, makalo ná basoda banso ba limpinga lya Farao, baye banso balandaki ba-Israel bazindi o mbu. Ata moto moko te abiki. | |
Exod | LinVB | 14:29 | Ba-Israel bakatisaki mbu, mpe bapoloki te, zambi epai na epai mai makangemaki mpe matelemaki lokola bifelo. | |
Exod | LinVB | 14:30 | Mokolo mona Yawe abikisi bongo Israel o maboko ma ba-Ezipeti. Ba-Israel bamoni bibembe bya ba-Ezipeti bilali o libongo. | |
Chapter 15
Exod | LinVB | 15:1 | Nsima yango Mose na bana ba Israel bayembeli Yawe nzembo eye : « Nakoyembela Yawe, alongi na nkembo, abwaki farasa ná motambwisi wa yango o mbu. | |
Exod | LinVB | 15:2 | Yawe azali bokasi mpe mobateli wa ngai, nazwi libiki mpo ya ye. Azali Nzambe wa ngai, nakumisi ye, nalingi koyembela ye, Nzambe wa tata wa ngai. | |
Exod | LinVB | 15:4 | Abwaki makalo ma Farao na basoda ba ye o mbu, basoda ba ye ba mpiko banso bazindi o Mbu Etane. | |
Exod | LinVB | 15:5 | Mbonge ya mai ibendi bango o kati ya mbu, bakiti tee o bosindo bwa mai lokola libanga. | |
Exod | LinVB | 15:6 | E Yawe, loboko la yo la mobali lolakisi nguya, e Yawe, loboko la yo la mobali losukisi monguna. | |
Exod | LinVB | 15:7 | Okweisi banguna ba yo na nkembo ya yo eleki enene, na nkanda ya yo enene osilisi bango lokola matiti. | |
Exod | LinVB | 15:8 | Na mpema ya zolo ya yo mai masangani, mbonge ya mai iyei koteleme lokola efelo, mabulu manene masalemi o kati ya mbu. | |
Exod | LinVB | 15:9 | Monguna alobaki : ‘Nakolanda bango, nakoswa bango, nakokabola biloko bya bango, nakotonda na bilei bya bango, nakobimisa mo-mpanga mwa ngai mpe nakoboma bango banso.’ | |
Exod | LinVB | 15:11 | E Yawe, nani akokani na yo o kati ya banzambe banso ? Nani azali na lokumu mpe mosantu lokola yo ? Nani akoyokisa nsomo mpe akobimisa misala miye minene ? | |
Exod | LinVB | 15:13 | Na bolingi bwa yo bonene okambi baye yo osikoli, na bokasi bwa yo okambi bango o ndako ya yo esantu. | |
Exod | LinVB | 15:14 | Bato ba bikolo binso, na apoki yango, balengi na nsomo, ba-Filisti babandi koyoka mpasi mingi. | |
Exod | LinVB | 15:15 | Bayangeli ba Edom babangi, nsomo ekoteli mitema mya bakonzi ba Moab. Ba-Kanana banso balengi. | |
Exod | LinVB | 15:16 | Bongo banso bayoki nsomo mpenza ; mayele masileli bango mpo ya bokasi bwa loboko la yo, mpo olekisi bato ba yo o kati ya bango, bato baye osikoli mpo ’te bazala ekolo ya yo. | |
Exod | LinVB | 15:17 | Okokamba bango mpe okofandisa bango o ngomba ya yo mpenza, ngomba yo moko Yawe oponi mpo ya kosala wana, esika esantu yo moko obongisi na maboko ma yo. | |
Exod | LinVB | 15:19 | Ntango farasa ná batambwisi ná makalo ma Farao bakotaki o mbu, Yawe azongisi mai o esika mazalaki liboso mpe azindisi bango, kasi ba-Israel bakatisi mbu na makolo, bapoli te. | |
Exod | LinVB | 15:20 | Miriam, ndeko wa Arone, ye profeta mwasi akamati mbonda o maboko, mpe basi banso balandi ye na nsima, babandi kobina mpe kobete mbonda. | |
Exod | LinVB | 15:21 | Miriam ayembisi bango nzembo eye : « Apembela Yawe, asali likambo linene, abwaki farasa na motambwisi o mbu. » | |
Exod | LinVB | 15:22 | Mose akambi ba-Israel ut’o Mbu Etane tee nzela ekokende o eliki ya Sur. Batamboli mikolo misato o eliki mpe bakuti mai te. | |
Exod | LinVB | 15:23 | Ekomi bango o Mara, bakoki komele mai kuna te, zambi mai ma Mara mazalaki bololo mingi ; ntina yango batangi mango na nkombo Mara. | |
Exod | LinVB | 15:25 | Mose abeleli Yawe, mpe Yawe alakisi ye eteni ya nkoni. Mose abwaki yango o mai mpe mai makomi mai ma bomeli. Kuna Yawe apesi bango mibeko na mitindo, kuna ameki bango mitema. | |
Exod | LinVB | 15:26 | Na nsima Yawe alobi : « Soko oyoki lolaka la Yawe Nzambe wa yo mpe osali maye mabongi o miso ma ye, soko otii matoi na bitinda bya ye mpe otosi mibeko mya ye minso, nakopesa yo bitumbu te, biye napesaki ba-Ezipeti, mpo nazali Yawe, oyo akobikisaka yo. » | |
Chapter 16
Exod | LinVB | 16:1 | Ba-Israel banso balongwi o Elim, batamboli tee bakomi o eliki ya Sin, kati ya Elim na Sinai. Uta babimi o Ezipeti batambolaki sanza yoko na ndambo. | |
Exod | LinVB | 16:3 | Balobi na bango : « Mpo nini tokufaki te na etumbu ya Yawe o mokili mwa Ezipeti, esika tosalaki kofanda penepene na nzungu itondi na nyama, mpe tosalaki kosilisa nzala na mampa ? Apaki na biso awa o eliki bobele mpo ya koboma biso na nzala ! » | |
Exod | LinVB | 16:4 | Yawe alobi na Mose : « Nakonoki-sela bino mampa makouta o likolo. Mokolo na mokolo bato bakende kolokoto maye makoki na mokolo moko. Nalingi komeka bango mpo nayeba soko bakotosa mobeko mwa ngai. | |
Exod | LinVB | 16:5 | Mokolo mwa motoba, esika bakolamba bilei balokotoki, balamba biye bikoki na mikolo mibale. » | |
Exod | LinVB | 16:6 | Mose na Arone balobi na ba-Israel : « Lelo na mpokwa bokoyeba ’te Yawe moto abimisaki bino o mokili mwa Ezipeti, | |
Exod | LinVB | 16:7 | mbe lobi na ntongo bokomono nkembo ya Yawe, zambi ayoki bilobaloba bya bino. Biso nde banani mpo ’te bosilika na biso ? » | |
Exod | LinVB | 16:8 | Mose alobi : « Lelo na mpokwa Yawe akopesa bino nyama mpo bolia, mpe na ntongo akopesa bino mampa lokola motema molingi, zambi Yawe ayoki ’te bosiliki na ye. Biso nde banani ? Bosiliki na biso te, kasi na Yawe. » | |
Exod | LinVB | 16:9 | Mose alobi na Arone : « Loba na bana ba Israel : Bobeleme na Yawe, zambi ayoki ’te bosiliki na ye. » | |
Exod | LinVB | 16:10 | Ntango Arone azalaki koloba na ba-Israel, banso batali epai ya eliki mpe bamoni nkembo ya Yawe o kati ya limpata. | |
Exod | LinVB | 16:12 | « Nayoki ’te bana ba Israel basiliki. Yango wana oloba na bango : Soko mpokwa ekomi, bokolia nyama. Etani ntongo bokotonda mampa. Bongo apeba ’te ngai nazali Yawe, Nzambe wa bino. » | |
Exod | LinVB | 16:13 | Ekomi mpokwa, bisosolo biyei kokweya o nganda ya bango mobimba. Etani ntongo, bamoni bipai binso lokola londende losipi nganda. | |
Exod | LinVB | 16:14 | Elimwi londende, bamoni biloko lokola mbuma ike itikali, ikokani na matanga ma mbula makangani mpo ya mpio. | |
Exod | LinVB | 16:15 | Bana ba Israel bamoni bongo, batunani : ‘Manu’ bisali biloko nini ?, zambi bayebi byango te. Mose alobi na bango : « Yawe apesi biso mampa maye tolia mango. | |
Exod | LinVB | 16:16 | Apoka makambo Yawe atindi : Moto na moto alokoto ndambo eye ekoki na ye : sani yoko na moto moko moko. Moto na moto akamatela bato ba libota lya ye. » | |
Exod | LinVB | 16:18 | Batii yango o emekeli, mpe oyo alokotoki mingi azwi eleki te, oyo alokotoki moke azwi bo ekoki na ye : moto na moto azwi lokola ekoki na ye. | |
Exod | LinVB | 16:20 | Basusu bayoki Mose te mpe babombi ndambo mpo ya mokolo mwa nsima, kasi nkusu ikoti mpe ndambo yango ebebi. Mose asiliki na bango. | |
Exod | LinVB | 16:21 | Bazalaki kolokoto ntongo na ntongo, moto na moto lokola ekoki na ye mpo ’te alia ; mpe awa moi mobandi kopesa molunge, biloko bikomi konyangwa. | |
Exod | LinVB | 16:22 | Nzokande mokolo mwa motoba balokoti mampa, moto na moto ndambo ibale ; mpe bakolo ba mboka bakei koyebisa Mose mpo yango. | |
Exod | LinVB | 16:23 | Oyo alobi na bango : « Yawe alobi ape : Lobi ndezali mokolo mwa bopemi, ezali Sabato esantu mpo ya Yawe. Bolamba biloko biye bolingi kokalinga mpe kotokisa, mpe bobomba biye bikotikala mpo ya lobi. » | |
Exod | LinVB | 16:24 | Babombi byango tee mokolo mwa nsima, se lokola Mose atindaki bango ; bibebi te mpe nkusu ikoteli byango te. | |
Exod | LinVB | 16:25 | Mose alobi na bango : « Bolia yango lelo, zambi lelo ezali mokolo mwa Sabato mpo ya Yawe ; lelo bokoswa eloko yoko o bilanga te. | |
Exod | LinVB | 16:26 | Bokoswa yango mikolo motoba, kasi mokolo mwa nsambo, mokolo mwa Sabato, ekosala te. » | |
Exod | LinVB | 16:29 | Botala malamu, Yawe apesi bino mokolo mwa Sabato ; yango wana o mokolo mwa motoba akopesa bino mampa makoki na mikolo mibale. Botikala moto na moto o esika ya ye ; moko te abima o mokolo mwa nsambo. » | |
Exod | LinVB | 16:31 | Ba-Israel bapesi biloko bina nkombo ‘manu’. Ezalaki lokola mbuma ya mampa, mpembe, elengi lokola minkate balambi na mafuta ma nzoi. | |
Exod | LinVB | 16:32 | Mose alobi : « Apoka etinda Yawe atindi : Botondisa sani yoko mpe bobombela bankoko ba bino yango, mpo ’te bamono mampa maye naleisaki bino o eliki o eleko nabimisaki bino o Ezipeti. » | |
Exod | LinVB | 16:33 | Mose alobi na Arone : « Kamata mbeki, tondisa yango na manu mpe tia yango liboso lya Yawe, bomba yango mpo ya mabota ma bino makoya nsima. » | |
Exod | LinVB | 16:34 | Lokola Yawe atindaki Mose, Arone atii yango liboso lya Sanduku ya Bondeko mpo ’te ebombama wana. | |
Exod | LinVB | 16:35 | Mibu ntuku inei bana ba Israel balei mampa mana tee bakomi o bikolo bato bakofandaka ; baliaki yango tee mokolo bakomi o ndelo ya mokili mwa Kanana. | |
Chapter 17
Exod | LinVB | 17:1 | Bato banso ba Israel balongwi o eliki ya Sin mpo ya kolanda nzela eye Yawe akotinda bango. Bapiki nganda o Refidim, kasi bazwi mai ma komele te. | |
Exod | LinVB | 17:2 | Bato basiliki na Mose, balobi na ye : « Pesa biso mai tomele ! » Mose alobi na bango : « Mpo nini bosiliki na ngai ? Mpo nini bosali komeka Yawe ? » | |
Exod | LinVB | 17:3 | O eliki ena bato bakufi na mposa ya mai ; basiliki na Mose mpe balobi : « Mpo nini obimisaki biso o Ezipeti ? Olingi nde koboma biso na mposa ya mai, ná bana ná nyama ya biso ? » | |
Exod | LinVB | 17:4 | Mose abondeli Yawe, alobi : « Nasala boni na bato baye ? Mosika te, bakoboma ngai na mabanga. » | |
Exod | LinVB | 17:5 | Yawe alobi na Mose : « Elongo na bakolo basusu ba Israel, kende koteleme liboso lya bato ; kamata lingenda liye obeteki na lyango ebale mpe kende. | |
Exod | LinVB | 17:6 | Tala, ngai nakobimela yo kuna o ngomba Oreb. Okobete libanga mpe mai makobima, bongo bato bakokoka komele. » Mose asali bongo o miso ma bakolo ba Israel. | |
Exod | LinVB | 17:7 | Apesi esika ena nkombo Masa na Meriba, mpo ba-Israel basilikaki mpe batiaki ntembe na Yawe ; balobaki : « Nzambe azali o kati ya biso to te ? » | |
Exod | LinVB | 17:9 | Mose alobi na Yosue : « Pono bato, mpe kende kobu-ndisa ba-Amalek lobi na ntongo. Ngai moko, lingenda lya Nzambe o maboko, nakoteleme o nsonge ya ngomba. » | |
Exod | LinVB | 17:10 | Yosue asali lokola Mose alobaki : akei kobunda etumba na ba-Amalek. O ntango ena Mose, Arone na Kur babuti kin’o nsonge ya ngomba. | |
Exod | LinVB | 17:11 | Ntango Mose atomboli maboko, ba-Israel baleki makasi ; awa akitisi mango, bato ba Amalek bakomi makasi. | |
Exod | LinVB | 17:12 | Mosika te, Mose alembi kotombola maboko. Arone na Kur bakamati libanga, bafandisi ye o liba-nga, batelemi epai na epai mpe basi-mbi maboko ma ye ; mpe bongo maboko ma Mose makiti te tee butu apindi. | |
Exod | LinVB | 17:14 | Yawe alobi na Mose : « Koma makambo mana o buku mpo ’te baku-ndolaka mango, mpe yebisa Yosue ’te nakoboma nkombo ya Amalek seko. O mokili moto moko akokanisa ye lisusu te. » | |
Chapter 18
Exod | LinVB | 18:1 | Yetro, nganga Nzambe wa Madian, bokilo wa Mose, ayoki manso Nzambe asalaki mpo ya Mose mpe mpo ya bato ba ye, boniboni abimisaki ba-Israel o Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 18:3 | mpe na bana ba ye babale. Moko nkombo ya ye Gersom, zambi alobaki : « Nazali mompaya o mokili mosusu. » | |
Exod | LinVB | 18:4 | Mosusu nkombo ya ye Eliezer, mpo alobaki : « Nzambe wa tata wa ngai asalisi ngai, mopanga mwa Farao mobeti ngai te. » | |
Exod | LinVB | 18:5 | Yetro, bokilo wa Mose, elongo na bana ba Mose na mwasi wa ye, bakei kolanda Mose o eliki esika apikaki nganda penepene na ngomba ya Nzambe. | |
Exod | LinVB | 18:6 | Bayebisi Mose : « Bokilo wa yo Yetro ayei epai ya yo elongo na mwasi wa yo mpe na bana ba yo babale. » | |
Exod | LinVB | 18:7 | Mose akei kokutana na bokilo wa ye ; bayambani o maboko, batunani soko bazali malamu ; na nsima bakoti o ema. | |
Exod | LinVB | 18:8 | Mose ayebisi bokilo wa ye maye Yawe asalaki Farao na ba-Ezipeti mpo ya kobikisa Israel. Asololi ye mpe mpasi inso bayokaki o nzela mpe boniboni Yawe abikisaki bango. | |
Exod | LinVB | 18:9 | Yetro asepeli malamu manso Yawe asalaki ba-Israel, awa abikisaki bango o maboko ma ba-Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 18:10 | Yetro alobi : « Bakumisa Yawe oyo abikisaki bino o maboko ma ba-Ezipeti mpe ma Farao ; ye moto abikisaki bato ba ye o boombo bwa ba-Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 18:12 | Yetro, bokilo wa Mose, abonzeli Nzambe libonza lya kotumba mpe miboma. Aron na bakolo banso ba Israel bayei kolia esika yoko na bokilo wa Mose o miso ma Nzambe. | |
Exod | LinVB | 18:13 | Mokolo mwa nsima, Mose afandi mpo ya kosambisa makambo ma bato ; ut’o ntongo tee mpokwa bato bazalaki kosinga ye. | |
Exod | LinVB | 18:14 | Bokilo wa Mose, awa amoni maye manso Mose azalaki kosala mpo ya bato, alobi na ye : « Ndenge nini osali kosala mpo ya kobongisa yo moko makambo ma bato ? Mpo nini ofandi wana yo moko, awa bato bazali kosinga yo banda ntongo tee mpokwa ? » | |
Exod | LinVB | 18:16 | Soko bazali na likambo, bakoya epai ya ngai, ngai nakokata makambo ma banso moko moko, mpe nakoyebisa bango bitinda mpe mibeko mya Nzambe. » | |
Exod | LinVB | 18:18 | Ntembe te, mokolo mosusu okolembe, mpe bato basusu bakolembe lokola, zambi mokumba moleki yo bosito ; okoki kosala mosala monso se yo moko te. | |
Exod | LinVB | 18:19 | Sikawa yoka lilako nakopesa yo mpo ’te Nzambe azala na yo. Zala wana o miso ma Nzambe o nkombo ya bato, mpe yo moko zala molobeli wa bango epai ya Nzambe. | |
Exod | LinVB | 18:21 | Kasi pono o kati ya ba-Israel bato ba mayele, bato bakoba-ngaka Nzambe, bato ba solo, bato bakosengeke mabonza te. Lubola bango bayangela bato, mosusu wa bato nkoto yoko, mosusu bato monkama, ntuku itano to zomi. | |
Exod | LinVB | 18:22 | Bango bakosambisa makambo ma bato ntango inso. Soko likambo lisali linene, bakende epai ya yo ; soko likambo like, bango moko bakata lyango. Bongo mosala mwa yo mokosala moke, mpo bango bakosalisa yo. | |
Exod | LinVB | 18:23 | Soko osali bongo, mosala moye Nzambe akotinda yo, okokoka na mwango mpe bato banso ndebakoki kosonga o mboka na motema boboto. » | |
Exod | LinVB | 18:25 | Mose aponi o kati ya ba-Israel bato ba mayele mpe aluboli bango bayangeli ba bato nkoto yoko to monkama to ntuku itano to zomi. | |
Exod | LinVB | 18:26 | Mpe bango bazalaki wana ntango inso kosambisa bato. Soko likambo linene, batindi bango epai ya Mose, kasi baye bayei na likambo like, bango moko bakati lyango. | |
Chapter 19
Exod | LinVB | 19:1 | Banda mokolo babimaki o mokili mwa Ezipeti, ba-Israel basali sanza isato, bakomi o eliki Sinai. | |
Exod | LinVB | 19:2 | Balongwi o Refidim, bakomi o eliki Sinai, mpe bapiki nganda bobele wana. Ba-Israel bafandi o esika ena penepene na ngomba. | |
Exod | LinVB | 19:3 | Mose abuti ngomba, epai ya Nzambe. Ut’o nso-nge Yawe abengi ye, alobi : « Yoka maloba okoloba na bato ba libota lya Yakob, okosakola na bana ba Israel ape : | |
Exod | LinVB | 19:4 | ‘Bino moko bomonoki maye nasalaki ba-Ezipeti, awa namemeki bino o mapapu ma engondo, mpe nakomisi bino epai ya ngai. | |
Exod | LinVB | 19:5 | Banda lelo, soko botosi ngai, mpe bomemyi bondeko nakokata na bino, nakotala bino lokola bato ba ekolo ya ngai o kati ya bikolo binso, zambi nse mobimba ezali ya ngai.’ | |
Exod | LinVB | 19:6 | O miso ma ngai bokosala ekolo ya banganga Nzambe, ekolo esantu. Okoloba maloba mana na ba-Israel. » | |
Exod | LinVB | 19:8 | Mpe bato banso motema moko bazongisi : « Tokosala makambo manso Yawe alobaki. » Mose ayebisi Yawe eyano ya bato. | |
Exod | LinVB | 19:9 | Yawe alobi na Mose : « Nakoya epai ya yo o kati ya limpata linene. Ntango nakoloba na yo bato bakoyoka ngai mpe bakondima yo seko. » Mose ayebisi Yawe eyano ya bato. | |
Exod | LinVB | 19:10 | Yawe alobi na ye lisusu : « Kende epai ya bato mpe yebisa bango ’te bamisantisa lelo mpe lobi : basukola bilamba, | |
Exod | LinVB | 19:11 | mpe bamilengele mpo ya ndele, zambi ndele Yawe akokita o ngomba Sinai o miso ma bato banso. | |
Exod | LinVB | 19:12 | Na nsima tia ndelo zongazonga na ngomba mpe loba na bato : ‘Bokeba ’te bobuta ngomba te, bosimba mpe mabelé ma yango te. Moto akosimba ngomba na maboko, baboma ye. | |
Exod | LinVB | 19:13 | Mpo ya koboma moto, bosimba ye te, kasi boboma ye na mabanga to botubola ye na makula ; azala moto to nyama, akobika te.’ Soko bayoki mondule bakoki kobuta ngomba. » | |
Exod | LinVB | 19:14 | Mose akiti ngomba mpe akei epai ya bato. Atindi bango ’te bamisantisa, bongo bapetoli bilamba bya bango. | |
Exod | LinVB | 19:16 | Nsima ya mikolo mibale, ebandi ntongo kotana, bakomi koyoka makeléle ma nkake, mpe bamoni minkalali na mpe limpata liindo. Bayoki mpe mondule mobeti makasi mpe banso o nganda bakomi kolenge na nsomo. | |
Exod | LinVB | 19:17 | Mose abimisi bato o libanda lya nganda mpo ’te bazwana na Nzambe mpe batelemi wana o nse ya ngomba. | |
Exod | LinVB | 19:18 | Ngomba Sinai ezingami na milinga, zambi Yawe akitaki o kati ya móto. Molinga mobimi lokola o mombonda, mpe ngomba mobimba eningani makasi. | |
Exod | LinVB | 19:19 | Bayoki lisusu makeléle lokola babeti mondule makasi. Esilisi Mose koloba, Nzambe azo-ngiseli ye maloba na mongongo lokola nkake. | |
Exod | LinVB | 19:20 | Yawe akiti o nsonge ya ngomba, abengi Mose, bongo Mose abuti kin’o nsonge ya ngomba. | |
Exod | LinVB | 19:21 | Yawe alobi na Mose : « Kita ngomba mpe yebisa bato baleka ndelo ya ngomba te mpo baya kotala Yawe, mbele mingi o kati ya bango bakokufa. | |
Exod | LinVB | 19:22 | Banganga Nzambe mpe, ata bakobelemeke na Yawe, basengeli komisantisa mpo ’te Yawe asilikela bango te. » | |
Exod | LinVB | 19:23 | Mose alobi na Yawe : « Bato bakoki kobuta ngomba Sinai te, zambi yo moko oyebisi biso ’te totia ndelo zongazonga na ngomba mpo totala yango lokola ngomba esantu. » | |
Exod | LinVB | 19:24 | Yawe alobi lisusu : « Kita mpe zonga awa na Arone. Kasi banganga Nzambe elongo na bato baleka ndelo te mpo ya kobuta epai ya Yawe, mpo ’te asilikela bango te. » | |
Chapter 20
Exod | LinVB | 20:2 | « Ngai Yawe, Nzambe wa yo, nabimisaki yo o mokili mwa Ezipeti, esika osalaki moombo. | |
Exod | LinVB | 20:4 | Osala ekeko ata yoko te, osala mpe elili te ya binso bisali o likolo, awa o nse mpe o bosindo bwa mai. | |
Exod | LinVB | 20:5 | Okumbamela byango te, osalela byango mpe te, zambi ngai Yawe Nzambe wa yo, nazali Nzambe wa zuwa. Nakopesaka etumbu na bana, na bankoko mpe na bankokolo mpo ya lisumu lya batata, soko bayini ngai ; | |
Exod | LinVB | 20:6 | kasi nakolakisaka bolamu na bato nkoto na nkoto soko balingi ngai mpe batosi mibeko mya ngai. | |
Exod | LinVB | 20:7 | Otanga nkombo ya Yawe Nzambe wa yo mpamba te, mpo Yawe akopesa etumbu na moto akotanga nkombo ya ye mpamba. | |
Exod | LinVB | 20:10 | Kasi mokolo mwa nsambo mosali eyenga ya Yawe Nzambe wa yo. Mokolo mwango osala mosala moko te, yo na mwana wa yo wa mobali to wa mwasi, mosali to nyama ya yo, na mpe mompaya oyo azali epai ya yo. | |
Exod | LinVB | 20:11 | Zambi na mikolo motoba Nzambe asalaka likolo na nse, mbu na binso bisali wana ; kasi mokolo mwa nsambo apemaki. Yango wana abenisi mokolo mwa Sabato mpe asantisi mwango. | |
Exod | LinVB | 20:12 | Memya tata na mama mpo ’te oumela mikolo mingi o mokili Yawe Nzambe wa yo apesi yo. | |
Exod | LinVB | 20:17 | Olula ndako ya moninga te. Olula mwasi wa moninga te, mosali wa ye wa mobali to wa mwasi mpe te, ngombe to mpunda ya ye mpe te, to eloko ata nini ya ye te. » | |
Exod | LinVB | 20:18 | Bato bazalaki koyoka makelele ma nkake mpe komono minkalali, ná ngomba ebimi milinga ná lolaka la mindule, balengi na nsomo mpe batikali mosika. | |
Exod | LinVB | 20:19 | Balobi na Mose : « Yo moto loba na biso, mpe tokoyoka yo ; kasi Nzambe aloba na biso te, mbele tokokufa. » | |
Exod | LinVB | 20:20 | Mose azongiseli bango, alobi : « Botika koyoka nsomo. Nzambe ayaki komeka bino mpo bobanga ye ntango inso mpe botika kosala masumu. » | |
Exod | LinVB | 20:21 | Bato batelemi mwa mosika, mpe Mose akei epai ya limpata liindo esika Nzambe azalaki. | |
Exod | LinVB | 20:22 | Yawe alobi na Mose : « Loba na bato ba Israel : Bino moko bomonoki boniboni nalobaki na bino ut’o likolo. | |
Exod | LinVB | 20:23 | Bosala bikeko bya banzambe basusu te, bikeko bya palata to bya wolo ; bosala na byango o miso ma ngai te. | |
Exod | LinVB | 20:24 | Otongela ngai altare ya mabelé, esika okoki kobonza mabonza ma kotumba to miboma mya bondeko, mya nyama ya bino inene to ike. O bisika binso naponi mpo ’te okanisa nkombo ya ngai, nakoya kobenisa yo. | |
Exod | LinVB | 20:25 | Soko otongeli ngai altare ya mabanga, tonga lango na mabanga makatemi te, mpo soko okati mango na mbeli, okosantola mango. | |
Chapter 21
Exod | LinVB | 21:2 | Soko oswi moombo epai ya ba-Ebrei, ye asalela yo mibu motoba ; kasi o mobu mwa nsambo, tika ye akende na bonsomi, afuta eloko te. | |
Exod | LinVB | 21:3 | Soko ayaki ye moko, alongwa ye moko ; soko ayaki na mwasi wa ye, mwasi akende elongo na ye. | |
Exod | LinVB | 21:4 | Soko nkolo wa ye abalisi ye mwasi, mpe mwasi aboteli ye bana babali to bana basi, mwasi oyo na bana ba ye batikala epai ya nkolo, mobali nde akende ye moko. | |
Exod | LinVB | 21:5 | Kasi soko moombo alobi : “Ngai nalingi nkolo wa ngai, ná mwasi ná bana ba ngai, nalingi koswa bo-nsomi te,” | |
Exod | LinVB | 21:6 | nkolo wa ye akende na ye epai ya Nzambe, abenda ye penepene na ezibeli ya ndako, atubola ye litoi na nsete ; bongo akosala moombo wa ye seko. | |
Exod | LinVB | 21:7 | Soko moto moko ateki mwana mwasi wa ye azala moombo, elenge mwasi ona akoki kosikwama te lokola baombo babali. | |
Exod | LinVB | 21:8 | Soko asepelisi nkolo wa ye te, oyo aponoki ye mpo azala mwasi wa ye, akoki koteke ye. Kasi akoki koteke ye na bato ba ekolo esusu te, soko alingi ye lisusu te. | |
Exod | LinVB | 21:9 | Soko alingi kobalisa ye na mwana mobali wa ye, asala na ye lokola momeseno mwa mboka motindi mpo ya libala lya bilenge basi. | |
Exod | LinVB | 21:10 | Soko akamati naino mwasi mosusu, apesa mwasi wa yambo bilei na bilamba na ndako ya kolala se lokola liboso. | |
Exod | LinVB | 21:11 | Soko apesi ye biloko bina bisato te bo ebongi, mwasi oyo akoki kolongwa, ata afuti eloko te. | |
Exod | LinVB | 21:13 | Kasi soko asalaki na nko te, mpo Nzambe moto akabi ye o maboko ma ye, nakolakisa yo esika akoki kobombama. | |
Exod | LinVB | 21:14 | Kasi soko moto abomi moninga na nko mpenza, ata akimi penepene na altare, olongola ye kuna mpe oboma ye. | |
Exod | LinVB | 21:16 | Moto akangi moninga, to ateki ye lokola moombo, to abombi ye o ndako ya ye, baboma ye. | |
Exod | LinVB | 21:18 | Soko babali baswani mpe moko azokisi moninga na libanga, to abeti ye mabe, moto oyo azoki atikali o mbeto, soko ayebi koteleme mpe kobima o libanda na lingenda, | |
Exod | LinVB | 21:19 | oyo abeteki ye azwa etumbu te, kasi asengeli kofuta ye o ntango azangi mosala, asengeli mpe kosalisa ye tee akobika. | |
Exod | LinVB | 21:20 | Soko moto abeti moombo mobali to moombo mwasi wa ye na lingenda mpe moombo akufi o maboko ma ye, azwa etumbu mpo ya mabe asalaki. | |
Exod | LinVB | 21:21 | Soko moombo akufi bobele nsima ya mokolo moko to mibale, bapesa nkolo wa ye etumbu te, mpo asombaki ye na mosolo. | |
Exod | LinVB | 21:22 | Soko bato, o ntango bazali kobunda, batuti mwasi azali na zemi ; na nsima zemi esopani, kasi mwasi akufi te, oyo atuti ye afuta mosolo moye nkolo wa mwasi akosenge, afuta o miso ma bazuzi. | |
Exod | LinVB | 21:24 | Soko otuboli moto liso, batubola mpe lya yo ; obuki ye lino, babuka mpe lya yo ; obuki ye loboko, babuka mpe la yo ; obuki ye lokolo, babuka mpe la yo ; | |
Exod | LinVB | 21:26 | Soko moto azokisi moombo mobali to mwasi wa ye na liso mpe liso likufi, apesa ye bonsomi mpo ya liso abebisi. | |
Exod | LinVB | 21:27 | Soko abuki lino lya moo-mbo mobali to mwasi, apesa ye bo-nsomi mpo ya lino abukaki. | |
Exod | LinVB | 21:28 | Soko ngombe mobali ezokisi mobali to mwasi na maseke mpe moto oyo akufi, baboma ngombe na mabanga ; balia mosuni mwa yango te, mpe basala nkolo wa ngombe matata te. | |
Exod | LinVB | 21:29 | Kasi soko ngombe mobali esili emeseni kosokisa bato na maseke, mpe nkolo akengeli yango malamu te, ata bakebisaki ye, mpe ngombe ebomi mobali to mwasi, baboma ngombe na mabanga, baboma mpe nkolo wa yango. | |
Exod | LinVB | 21:30 | Soko alingi komibikisa mpe bakosenge ye mosolo, afuta bongo mosolo monso bakosenge ye. | |
Exod | LinVB | 21:32 | Soko ngombe ebomi moombo mobali to mwasi, nkolo wa ngombe afuta mitako ntuku isato, baboma mpe ngombe na mabanga. | |
Exod | LinVB | 21:33 | Soko batiki libulu polele to soko batimoli libulu mpe bazipi lyango malamu te, bongo ngombe to mpunda ekwei o kati, | |
Exod | LinVB | 21:35 | Soko ngombe ya moto moko etuti ngombe ya moto mosusu mpe ngombe eye ekufi, bankolo ba ngombe bateke ngombe eye ezali na bomoi mpe bakabola mosolo, bakabola mpe ngombe eye ekufi. | |
Exod | LinVB | 21:36 | Kasi soko eyebani na bato banso ’te ngombe emeseni kosokisa baninga, nzokande nkolo wa yango akengeli yango malamu te, ye apesa ngombe esusu o esika ya ngombe eye ekufi, batikela ye ngombe ekufi. | |
Chapter 22
Exod | LinVB | 22:1 | Soko bato bakangi moyibi o ntango azali kotubola efelo ya ndako mpe babomi ye, bapesa bango etumbu te. | |
Exod | LinVB | 22:2 | Kasi soko esalemi na moi, bazwa etumbu. Moyibi azongisa biloko binso ayibaki ; soko akoki te, bateke ye ; na mosolo mona bafuta biloko ayibaki. | |
Exod | LinVB | 22:3 | Soko nyama eye ayibaki, ngombe, mpunda to mpata, ekufi te mpe ezwami epai ya moyibi, oyo asengeli kofuta mbala ibale. | |
Exod | LinVB | 22:4 | Soko moto atiki bibwele bya ye bikende kolia o bilanga bya ndunda to o elanga ya vino ya moninga, afuta biloko binso bibwele biliaki, atanga mbuma iye ileki kitoko. | |
Exod | LinVB | 22:5 | Soko moto apelisi móto penepene na nzube mpe móto moye mosikisi matiti na mbuma ya bilanga, moto apelisaki móto, afuta mpo ya biloko binso bisiki. | |
Exod | LinVB | 22:6 | Soko moto abombisi mosolo to biloko epai ya moninga, mpe moyibi ayibeli moninga oyo biloko, soko bakangi moyibi, ye asengeli kosongisa mbala ibale biloko binso ayibaki. | |
Exod | LinVB | 22:7 | Soko bakangi moyibi te, nkolo wa ndako abeleme na Nzambe mpo ya kosakola ’te ye moko ayibaki eloko ya moninga te. | |
Exod | LinVB | 22:8 | O makambo manso basengeli kokata, to ngombe to mpunda to mpata to elamba to ata eloko nini ebungi, soko balobi : ‘Ezali bobele ye !’, batika likambo o maboko ma Nzambe. Oyo Nzambe akokitisa o likambo, ye moto afuta moninga mbala ibale. | |
Exod | LinVB | 22:9 | Soko moto atikeli moninga mpunda, ngombe, mpata to ata nyama nini mpo akengele yango, mpe nyama eye ekufi to ebukani makolo, to bayibi babotoli yango mpe moto moko amonoki yango te, | |
Exod | LinVB | 22:10 | ndai bakolayela Yawe ekokata likambo : soko mokengeli asali mabe to te. Nkolo andima maloba ma ye, kasi mokengeli afuta te. | |
Exod | LinVB | 22:11 | Kasi soko nyama eye bayibaki ezalaki penepene na ndako ya ye, asengeli kofuta nkolo. | |
Exod | LinVB | 22:12 | Soko nyama ya zamba ekatikati nyama, mokengeli alakisa ye biteni bya nyama ekufi, bongo afuta te. | |
Exod | LinVB | 22:13 | Soko moto adefi nyama ya moninga mpe nyama eye ezoki to ekufi ntango nkolo wa nyama azalaki te, ye afuta. | |
Exod | LinVB | 22:14 | Kasi soko nkolo azalaki wana, moninga afuta te. Soko adefaki nyama mwa mikolo, afuta mosolo mwa bodefi. | |
Exod | LinVB | 22:15 | Soko moto asenginyi elenge mwasi, oyo abali naino te, mpe ayebani na ye, afuta mosolo mwa libala mpe abala ye. | |
Exod | LinVB | 22:16 | Soko tata wa ye aapi ’te abala ye, afuta mosolo moye bakosengeke mpo ya libala lya ba-ngondo. | |
Exod | LinVB | 22:20 | Otungisa mompaya te, onyokolo ye mpe te, zambi yo moko osalaki mompaya o mokili mwa Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 22:23 | Nakotoko na nkanda mpe nakoboma bino na mopanga : basi ba bino bakosanga babali, mpe bana ba bino bakosanga batata. | |
Exod | LinVB | 22:24 | Soko odefisi mosolo na moninga to na mobola akofanda o ndako ya yo, mokolo bakosongisela yo, osenge mbakisa te. | |
Exod | LinVB | 22:26 | Azali na elamba esusu te mpo azipa nzoto, akolala ndenge nini soko azangi yango ? Soko abeleli ngai, nakoyoka ye, zambi ngai nakoyokelaka bato mawa. | |
Exod | LinVB | 22:28 | Mbuma ya yambo ya elanga ya yo na mpe vino ya ekamelo ya yo, obonza yango noki. Pesa ngai mwana mobali wa yo wa yambo. | |
Exod | LinVB | 22:29 | Sala se bongo na ngombe mpe na mpata ya yo. Mwana wa nyama etikala mikolo nsambo epai ya mama wa ye ; kasi o mokolo mwa mwambe opesa ngai yango. | |
Chapter 23
Exod | LinVB | 23:1 | Otambwisa masolo ma lokuta te. Ozala nzeneneke wa lokuta te mpo ya kolongisa moto mabe. | |
Exod | LinVB | 23:2 | Ata bato balingi kosala mabe bazali baike, olanda bango te. Ondima te kosala nzeneneke mpo ya kosipa mabe masalemi, mpo obangi miso ma bato baike o esambi. | |
Exod | LinVB | 23:4 | Soko omoni ngombe to mpunda ya monguna wa yo ebungi o nzela, osongisa yango epai ya nkolo wa yango. | |
Exod | LinVB | 23:5 | Soko omoni mpunda ya mo-nguna wa yo ekwei mpo ya bosito bwa mokumba, otala yango bobele na miso te, kasi okende kosalisa yango. | |
Exod | LinVB | 23:7 | Omikotisa o makambo ma lokuta te. Obomisa moto te soko azali na likambo te to soko azali moto semba, zambi moto wa makambo nakolongisa ye te. | |
Exod | LinVB | 23:8 | Oyamba mabonza te, zambi mabonza makoboma miso ma bato bakomonoko polele mpe makobebisa makambo ma basemba. | |
Exod | LinVB | 23:9 | Onyokolo bampaya te. Apebi ndenge bakosalaka na bampaya, mpo bino moko bosalaki bampaya o mokili mwa Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 23:11 | Kasi o mobu mwa nsambo, opemisa byango, mpe otika mbuma se wana ; babola ba bino balia yango. Bibwele bya bilanga bilia iye itikali. Sala se bongo na elanga ya yo ya vino mpe ya oliva. | |
Exod | LinVB | 23:12 | Sala mosala mikolo motoba mpe pema mokolo mwa nsambo. Bongo ngombe na mpunda ya yo ipema lokola, mpe mwana wa moombo wa yo wa mwasi na mompaya balenda lisusu. | |
Exod | LinVB | 23:13 | Bokeba ’te bosala manso lokola nayebisaki bino ; botanga mpe nkombo ya banzambe basusu te, nkombo ya bango ibima o monoko mwa bino te. | |
Exod | LinVB | 23:15 | Kumisa ngai o eyenga ya Mampa mavimbi te ; olia mango mikolo nsambo lokola natindi yo, lia mango o eleko nayebisaki, o sanza ya Abib, zambi o sanza ena obimaki o Ezipeti. Moto aya maboko mpamba te liboso lya ngai o eyenga ena. | |
Exod | LinVB | 23:16 | Kumisa ngai mpe o eyenga ya Bobuki mbuma ya yambo iye bolonaki o bilanga, mpe o eyenga ya Bokongoli mbuma inso o nsuka ya mobu, ntango okolongola mbuma ya mosala mwa bino o bilanga. | |
Exod | LinVB | 23:18 | Okoki kobonza makila ma moboma te soko osangisi mango na mampa mazangi nkisi. Obomba mafuta ma libonza kina mokolo mwa nsima te. | |
Exod | LinVB | 23:19 | Oya o ndako ya Yawe Nzambe wa yo na mbuma ya yambo ya ela-nga, iye ileki malamu. Olamba mwana ntaba te o mabéle ma mama wa ye. | |
Exod | LinVB | 23:20 | Nakotindela yo anzelu wa ngai akende liboso lya yo mpo akengele yo o nzela mpe akomisa yo o esika naponelaki yo. | |
Exod | LinVB | 23:21 | Memya ye mpe tosa monoko mwa ye. Soko oapi maloba ma ye, akolimbisa yo te, mpamba te, Nkombo ya ngai ezali na ye. | |
Exod | LinVB | 23:22 | Kasi soko otosi monoko mwa ye, mpe soko osali lokola nalobi, nakosala monguna wa banguna ba yo mpe nakobunda na baye bakobundisa yo. | |
Exod | LinVB | 23:23 | Anzelu wa ngai akokende liboso lya yo mpe akokomisa yo epai ya ba-Amor, ba-Iti, ba-Perisi, ba-Kanana, ba-Ivi na ba-Yebus, mpe ngai nakosilisa bango. | |
Exod | LinVB | 23:24 | Okumbamela banzambe ba bango te, okumisa bango te ; osala lokola bango te, kasi oboma bikeko bya banzambe ba bango mpe obuka makonzi batelemisi mpo ya banzambe ba bango. | |
Exod | LinVB | 23:25 | Soko osaleli Yawe, Nzambe wa yo, nakobenisa mampa mpe mai ma yo, mpe nakolongolela yo bokono bonso. | |
Exod | LinVB | 23:26 | Mwasi ata moko akosopa libumu te, moko akosala ekomba te, mpe nakokokisa mikolo mya yo. | |
Exod | LinVB | 23:27 | Nakotinda nsomo ya nguya ya ngai liboso lya yo ; nakotia mobulu o kati ya bato epai okokende mpe nakobengana banguna ba yo banso. | |
Exod | LinVB | 23:29 | Nakobengana bango bobele na mbula yoko te, mpo ’te mokili mokoma eliki te ; bongo nyama ya zamba ikoma mingi te, mpe isilisa mbuma ya bilanga bya yo te. | |
Exod | LinVB | 23:30 | Nakobengana bango se malembe malembe, nakosila tee okokoma ekolo ya bato baike mpo ’te okoka kokamata mokili mobimba. | |
Exod | LinVB | 23:31 | Okoswa mokili banda Mbu Etane tee mbu ya ba-Filisti, ut’o eliki kin’o ebale Efrate. Nakokaba bato ba mokili mona o maboko ma yo mpe okobengana bango liboso lya yo. | |
Chapter 24
Exod | LinVB | 24:1 | Yawe alobi na Mose : « Buta ngomba ya Yawe ; kamata Arone, Nadab, Abiu na bakolo ntuku nsambo ba Israel. Bokotikala mwa mosika mpe bokokumbama o nse. | |
Exod | LinVB | 24:2 | Bobele Mose ye moko abeleme na Yawe, basusu bakoma penepene te, babuta mpe ngomba te. » | |
Exod | LinVB | 24:3 | Mose akei koyebisa bato maloba mpe mibeko minso Yawe atindi. Monoko se moko bato banso bazongisi : « Tokotosa mibeko minso Yawe apesaki biso. » | |
Exod | LinVB | 24:4 | Mose akomi mitindo minso mya Yawe. Etani ntongo, atongi altare penepene na ngomba. Atelemisi wana mabanga zomi na mabale mpo ya mabota zomi na mabale ma Israel. | |
Exod | LinVB | 24:5 | Na nsima atindi bilenge ba-Israel babonzela Yawe ngombe bo mabonza ma kotumba mpe ma lisanga. | |
Exod | LinVB | 24:7 | Akamati buku ya Bondeko mpe atangi yango o miso ma bato banso. Mpe bato balobi : « Tokosala makambo manso Yawe alobaki mpe tokotosa ye. » | |
Exod | LinVB | 24:8 | Sikawa Mose akamati makila, anyakeli bato banso, alobi : « Ezali makila ma Bondeko Yawe akati na bino na maloba maye ma-nso. » | |
Exod | LinVB | 24:10 | Bamoni Nzambe wa Israel. O nse ya makolo ma ye bamoni lokola mabanga ma safir, mangengi lokola etando ya likolo. | |
Exod | LinVB | 24:11 | Nzambe asali bankumu ba Israel mabe te. Solo, bamoni elongi ya Nzambe. Na nsima balei mpe bameli. | |
Exod | LinVB | 24:12 | Yawe alobi na Mose : « Yaka epai ya ngai o ngomba, otikala wana, mpe nakopesa yo mabanga esika nakomi mibeko mpe bitinda mpo ya koteya bango. » | |
Exod | LinVB | 24:14 | Alobaki na bakolo : « Bosila biso awa tee tokosonga ; bosali na Arone mpe na Kur ; soko moto azali na likambo, akende epai ya bango. » | |
Exod | LinVB | 24:16 | Nkembo ya Yawe ekiteli ngomba Sinai, mpe limpata lisipi ngomba mikolo motoba. Mokolo mwa nsambo Yawe abengi Mose ut’o limpata. | |
Exod | LinVB | 24:17 | Bana ba Israel bamoni nkembo ya Yawe o nsonge ya ngomba lokola móto mosali kosikisa binso. | |
Chapter 25
Exod | LinVB | 25:2 | « Loba na bana ba Israel : Bafutisa bato banso mpako mpo ya ngai. Bayamba makabo ma bato banso bazali na mposa ya kokaba. | |
Exod | LinVB | 25:4 | bilamba bya kiusa ya langi ya longondo, motane to moi-ndo, bya malekani kitoko mpe bya nsuki ya ntaba ; | |
Exod | LinVB | 25:6 | mafuta mpo ya mwinda monene, malasi mpo ya mafuta ma bopakoli mpe mpaka ya malasi mpo ya kotumba ; | |
Exod | LinVB | 25:7 | mabanga ma motuya lokola kornaline mpe mabanga kitoko mpo ya kokembisa efod na libenga. | |
Exod | LinVB | 25:10 | Sala sanduku na mabaya ma akasia, bolai maboko mabale na ndambo, bonene loboko loko na ndambo, mpe bosanda loboko loko na ndambo. | |
Exod | LinVB | 25:11 | Obaka yango na manzanza ma wolo kitoko o kati mpe o libanda, oke-mbisa yango bipai binso na ekembiseli ya wolo. | |
Exod | LinVB | 25:12 | Tula mpo ya yango mpete inei ya wolo mpe tia yango o nse o bipai binei : mpete ibale epai na epai. | |
Exod | LinVB | 25:14 | mpe kotisa mango o kati ya mpete ibakemi na sanduku epai na epai, mpo ’te bato bakoka komeme sanduku. | |
Exod | LinVB | 25:17 | Likolo lya sanduku okokanga ezipeli ya wolo kitoko, ezala na bolai maboko mabale na ndambo mpe na bonene loboko loko na ndambo. | |
Exod | LinVB | 25:20 | Bakerubim batombola mapapu epai ya likolo mpo ya kobatela ezipeli na mapapu ma bango ; batalana bilongi, kasi miso ma bango matala ezipeli. | |
Exod | LinVB | 25:22 | Nakokutana na yo o esika ena, likolo lya ezipeli. Bobele ut’o ezipeli mpe o kati ya bakerubim babale bazali likolo lya Sanduku ya Bondeko nakopesa yo mibeko mitali bato ba Israel. | |
Exod | LinVB | 25:23 | Sala meza na mabaya ma akasia, bolai maboko mabale, bonene loboko loko, mpe bosanda loboko loko na ndambo. | |
Exod | LinVB | 25:25 | Zongazonga na meza, kata nkoma ya bonene lokola misapi misato mpe zinga inso lisusu na ekembiseli ya wolo. | |
Exod | LinVB | 25:26 | Tula mpe mpete inei ya wolo mpe baka yango na nsuka inei epai ya makolo ma yango manei. | |
Exod | LinVB | 25:29 | Sala lisusu sani, kopo, mbilika na mbeki mpo ya mabonza ma bomeli ; sala inso se na wolo. | |
Exod | LinVB | 25:31 | Sala mpe etemiseli ya mwinda na wolo kitoko. Eteni ya nse mpe mobimbi mwa yango mosengeli kotulama ; fulele, mbuma na nkasa ya yango, inso itulama mpe isangana lokola etemiseli. | |
Exod | LinVB | 25:33 | Etapi ya yambo ezala na fulele isato ifungwani lokola nkeni ; isala na mbuma mpe na nkasa. Mpe etapi esusu ezala mpe na fulele isato na mbuma mpe na nkasa. Bitapi motoba bya etemiseli ya mwinda bisalema se ndenge yoko. | |
Exod | LinVB | 25:34 | Etemiseli ya mwinda yangomei ezala na nkeni inei ifungwani lokola fulele, na mbuma mpe nkasa ya yango : | |
Exod | LinVB | 25:35 | mbuma yoko o nse ya bitapi bibale bya yambo bya etemiseli ya mwinda ; mbuma yoko o nse ya bitapi bisusu bibale mpe mbuma yoko o nse ya bitapi bya nsuka ; ezala bongo na bitapi motoba bya etemiseli ya mwinda. | |
Exod | LinVB | 25:36 | Mbuma na bitapi isangana na etemiseli ya mwinda, mpe inso isengeli kotulama na wolo mpe kosangana lokola eloko yoko. | |
Chapter 26
Exod | LinVB | 26:1 | Mpo ya kosala Ndako esantu, kamata bilamba zomi bya malekani kitoko mpe bya kiusa ya longondo, ya motane mpe ya moindo. Kembisa yango na bilili bya bakerubim. | |
Exod | LinVB | 26:2 | Bolai bwa bilamba bosala maboko ntuku ibale na mwambe, bonene maboko manei ; bilamba binso bikokana na bolai mpe na bonene. | |
Exod | LinVB | 26:4 | Kangisa eteni ya nsuka ya bilamba bya yambo na nkamba ya malusu ya longondo, sala se bongo na bilamba bisusu. | |
Exod | LinVB | 26:5 | Tia nkamba ya motindo mona ntuku itano o liboke lya yambo, mpe nkamba ntuku itano o liboke lya mabale mpo ’te ikoka kosangana na nsima. | |
Exod | LinVB | 26:6 | Kamata mitako ntuku itano ya wolo mpe kangisa bilamba bina binso na mitako mina. Bongo Ndako esantu ezala lokola eloko yoko. | |
Exod | LinVB | 26:7 | Sono mpe bilamba bya nsuki ya ntaba mpo ya kotia ema likolo lya Ndako esantu. Sono bongo bilamba zomi na yoko. | |
Exod | LinVB | 26:8 | Bolai bwa elamba bosala maboko ntuku isato, bonene maboko manei. Bilamba bina zomi na yoko bikokana na bolai mpe na bonene. | |
Exod | LinVB | 26:9 | Sangisa bilamba bitano epai yoko, mpe bilamba motoba epai esusu. Elamba eye ya motoba esengeli kosipa ezibeli ya ema. | |
Exod | LinVB | 26:11 | Kamata mitako ntuku itano mya mbengi mpe kangisa nkamba ya malusu inso na mitako mina mpo ya kosangisa biteni bibale bya ema, bikoma eloko yoko. | |
Exod | LinVB | 26:12 | Bilamba bileka ema na bolai ; bongo nsonge ya bilamba ekita tee o mabelé epai ya nsima ya Ndako esantu. | |
Exod | LinVB | 26:13 | O mipanzi mibale mya ndako esantu lolenge se loko ; bilamba bikita o nse mpo ya kosipa ema malamu. | |
Exod | LinVB | 26:14 | Na nsima zipa ema mobimba na motondo mwa mposo ya mpata mobali eye bapakoli ngola ; tia mpe motondo mosusu likolo lya mposo letenu. | |
Exod | LinVB | 26:17 | Baka o ezingeli yoko yoko mabaya make mabale, se bongo na bisingeli binso bya Ndako esantu. | |
Exod | LinVB | 26:19 | Tia makolo ma palata ntuku inei mpo ya bisingeli ntuku ibale bina : makolo mabale o nse ya ezingeli yoko yoko esika okokotisa nsonge ya nzete ena. | |
Exod | LinVB | 26:24 | Bisingeli bina bikabwana epai ya nse, mpe bikangema epai ya likolo o esika okangaki mpete ya yambo. Ezala se bongo na bisingeli bibale biye bikolendisa Ndako esantu. | |
Exod | LinVB | 26:25 | Ekosala bongo bisingeli mwambe na mpe makolo ma byango ma palata : makolo mabale o nse ya ezingeli yoko yoko. | |
Exod | LinVB | 26:26 | Kangisa bisingeli binso na mabasa malai ma akasia : mabasa matano o epai yoko ya Ndako esantu ; | |
Exod | LinVB | 26:27 | mabasa matano o epai esusu ya Ndako esantu mpe mabasa matano masusu o epai ya nsima, o Westi. | |
Exod | LinVB | 26:28 | Libasa liye lya kati lisangisa bisingeli binso ba-nda eye ya liboso tee eye ya nsuka. | |
Exod | LinVB | 26:29 | Zipa bisingeli na wolo, kanga mpete ya wolo o bisingeli mpe zipa mabasa mana na wolo. | |
Exod | LinVB | 26:31 | Sono elamba elai ya kiusa ya lo-ngondo, ya motane, ya moindo mpe ya malekani kitoko. Kembisa yango na bilili bya bakerubim. | |
Exod | LinVB | 26:32 | Tia yango o makonzi manei ma akasia, mazipami na wolo ; kotisa wana nsete ya wolo mpe tia makonzi mana o makolo manei ma palata. | |
Exod | LinVB | 26:33 | Kanga elamba na mitako, mpe kotisa Sanduku ya Bondeko o nsima ya elamba ; elamba ena ekabola bongo esika esantu na esika esantusantu. | |
Exod | LinVB | 26:35 | Tia meza o liboso lya elamba, mpe tia etemiseli ya mwinda o epai ya Sudi ya Ndako esantu, kasi meza epai ya Nordi. | |
Exod | LinVB | 26:36 | Sono elamba esusu mpo ya kosipa monoko mwa ema ; ezala ya kiusa ya longondo, ya motane, ya moindo mpe ya malekani kitoko. | |
Chapter 27
Exod | LinVB | 27:1 | Tonga altare na mabaya ma akasia ; na bolai maboko matano, na bonene maboko matano. Bipai binso binei bikokana. Na bosanda maboko masato. | |
Exod | LinVB | 27:2 | O matumu manei tia maseke masangani na yango lokola eloko yoko ; zipa yango na mbengi. | |
Exod | LinVB | 27:3 | Sala mpe mbeki mpo ya kotia mputulu, na mpau, na sani ya ko-nyakela mai, na nkanya, na mbeki mpo ya mpaka ya malasi. Sala biloko binso bya altare na mbengi. | |
Exod | LinVB | 27:4 | Sala mpe lopango zongazonga na meza, ezala lokola monyama mwa mbengi, mpe o nsuka inei ya lopango tia mpete inei ya mbengi. | |
Exod | LinVB | 27:7 | Bakotisa mabaya mana o kati ya mpete, bongo mabima bipai bibale bya altare mpo ya kotombola lango. | |
Exod | LinVB | 27:8 | Sala altare lokola sanduku ya mabaya, o kati eloko te ; esalema bongo lokola balakisaki yo o ngomba. | |
Exod | LinVB | 27:9 | Sala mpe lopango la Ndako esantu. O epai ya Sudi, bilamba bya lopango bisalema na malekani kitoko, na bolai maboko monkama. | |
Exod | LinVB | 27:10 | Makonzi ma yango ntuku ibale, na makolo ma yango ntuku ibale mazala ma mbengi ; kasi nsete ya yango mpe mpete isala ya palata. | |
Exod | LinVB | 27:11 | Bobele bongo epai ya Nordi ; bilamba bya maboko monkama, makonzi ntuku ibale na makolo ma kotemisa ntuku ibale mazala ma mbengi. Kasi nsete ya makonzi na mpe mpete isala ya palata. | |
Exod | LinVB | 27:12 | Tia bilamba bya maboko ntuku itano o bonene bwa lopango epai ya Westi ; bilamba bina bibakama o makonzi zomi mpe o makolo zomi. | |
Exod | LinVB | 27:14 | Na bilamba bya maboko zomi na matano okosipa monoko epai bakokotoko, na makonzi masato na makolo masato. | |
Exod | LinVB | 27:15 | O epai esusu bakokotoko ezala se bongo : bilamba bya maboko zomi na matano, na makonzi masato na makolo masato. | |
Exod | LinVB | 27:16 | O ezibeli ya lopango tia elamba kitoko ya maboko ntuku ibale, ezala ya kiusa ya longondo, ya motane, ya moindo mpe ya malekani kitoko ; na makonzi manei mpe na makolo manei. | |
Exod | LinVB | 27:17 | Makonzi manso zongazonga na lopango makangema likolo na mpete ya palata ; nsete ya yango isala ya palata, mpe makolo ma yango mazala ma mbengi. | |
Exod | LinVB | 27:18 | Bolai bwa lopango nde maboko monkama ; bonene bwa yango maboko ntuku itano ; bosanda bwa yango maboko matano. Bilamba binso bisalema na malekani kitoko ; mpe makolo mazala ma mbengi. | |
Exod | LinVB | 27:19 | Biloko bisusu binso mpo ya mosala mwa Ndako esantu bisala bya mbengi, na piké ya yango lokola. | |
Exod | LinVB | 27:20 | Tinda bana ba Israel ’te balukela yo mafuta ma oliva mpo ya etemiseli ya mwinda, mpo ’te mwinda mokoka kopela ntango inso. | |
Chapter 28
Exod | LinVB | 28:1 | O kati ya bato ba Israel pono ndeko wa yo Arone na bana ba ye mpo ’te basala mosala mwa bonganga : Arone, Nadab, Abiu, Eleazar na Itamar, bango banso bana ba Arone. | |
Exod | LinVB | 28:3 | Loba na bato banso ba Israel, baye napesaki ntoki ya kosala mosala mwango, basalela Arone bilamba mpo ’te akoka kosala mosala mwa bonganga bwa ngai. | |
Exod | LinVB | 28:4 | Basona bilamba biye : libenga, efod, monkoto, kazaka ekembami kitoko, ngabuni mpe mokaba. Basonela ndeko wa yo Arone mpe bana ba ye bilamba bisa-ntu, bongo bakoka kosala mosala mwa bonganga bwa ngai. | |
Exod | LinVB | 28:5 | Mpo ya kotonga byango, bakamata wolo, kiusa ya longondo, ya motane, ya moindo na mpe malekani kitoko. | |
Exod | LinVB | 28:6 | Moto wa ntoki asono efod na nsinga ya wolo, ya kiusa ya longo-ndo, ya motane, ya moindo mpe ya malekani kitoko. | |
Exod | LinVB | 28:8 | Elamba ya nkingo bakolata likolo lya efod, lisonama se bongo : na nsinga ya wolo, ya kiusa ya longondo, ya motane, ya moindo mpe ya malekani kitoko. | |
Exod | LinVB | 28:9 | Na nsima kamata mabanga mabale ma motuya, ma kornaline ; mpe koma o mabanga mana nkombo ya bana ba Israel. | |
Exod | LinVB | 28:10 | Koma nkombo motoba o libanga lyoko, nkombo motoba o libanga lisusu, ilanda molongo mwa mbotama ya bango. | |
Exod | LinVB | 28:11 | Kata nkoma ya nkombo ya bana ba Israel o mabanga mana mabale se lokola bato ba ntoki bakosalaka. Kotisa mabanga mana o bikangeli bya wolo. | |
Exod | LinVB | 28:12 | Kanga mabanga mana o bilamba bya mapeke bya efod, ezala elembo o miso ma bana ba Israel. Bongo Arone ameme nkombo ya bango o mapeke liboso lya Yawe mpo akanisa bango. | |
Exod | LinVB | 28:14 | Lata mpe nkamba ibale na nsinga ya wolo, mpe kembisa yango na malenda ; bakisa nkamba na malenda na bikangeli bina. | |
Exod | LinVB | 28:15 | Sala mpe libenga mpo ya Bosambisi, lisonama bobele lokola efod, na wolo, nsinga ya kiusa ya longo-ndo, ya motane, ya moindo, mpe ya malekani kitoko. | |
Exod | LinVB | 28:17 | Kembi-sa lyango na mabanga kitoko, mpe tia mango o milongo minei. O molongo mwa yambo tia libanga lya sardwane, lya topaze mpe lya emerode. | |
Exod | LinVB | 28:20 | O molongo mwa minei tia libanga lya krisolite, lya kornaline mpe lya yaspe. Kotisa mango manso o kati ya bikangiseli bya wolo. | |
Exod | LinVB | 28:21 | Mabanga mazala zomi na mabale, engebene na nkombo zomi na ibale ya bana ba Israel, o libanga lyoko lyoko bakoma nkombo ya libota lyoko lyoko, lokola bakosalaka elembo. | |
Exod | LinVB | 28:25 | Kanga mpe malenda mana mabale epai ya nsuka na bikangeli, biye okangaki o elamba ya mapeke epai ya liboso. | |
Exod | LinVB | 28:27 | Luka naino mitako mibale mya wolo mpe kanga myango na bilamba bya mapeke bya efod, epai ya nse, penepene na mokaba mwa efod. | |
Exod | LinVB | 28:28 | Bakanga mitako mya libenga na mitako mya efod na nkamba elitami na nsinga ya kiusa ya longondo mpo ’te ezala likolo lya mokaba mpe bongo libenga lilongwa na efod te. | |
Exod | LinVB | 28:29 | Ntango akokoto o Esika esantu, Arone ameme nkombo ya bana ba Israel o libenga lya Bosambisi, likolo lya motema ; bongo Yawe akanisa bango ntango inso. | |
Exod | LinVB | 28:30 | Kotisa ‘Urim na Tumim’ o libenga lya Bosambisi, mpo ’te bisala likolo lya motema mwa Arone ntango akoya o boso bwa Yawe. Bongo Arone ameme Bosambisi bwa bato ba Israel likolo lya motema ntango inso akoya o boso bwa Yawe. | |
Exod | LinVB | 28:32 | Nzela ezala o katikati mpo ya kobimisa motó ; balita mpe-mbeni ya elamba nkamba yoko, lokola na elamba ya etumba, mpo ’te epaswana te. | |
Exod | LinVB | 28:33 | Kembisa nsonge ya nse na bilili bya malala, bisalema na nsinga ya kiusa ya longondo, ya motane, ya moindo mpe ya malekani kitoko ; zongazonga na nzela ena tia naino ngengele ya wolo ; | |
Exod | LinVB | 28:34 | o nsonge ya nse ya monkoto mona otia na likelemba ngengele yoko ya wolo mpe elili yoko ya lilala. | |
Exod | LinVB | 28:35 | Arone alata mwango mpo ya kosala mosala mwa bonganga, bongo bato bayoka ye o ntango akoyingela o Esika esantu liboso lya Yawe to o ntango akobima ; bongo akokufa te. | |
Exod | LinVB | 28:37 | Kanga yango na nkamba ya kiusa ya longondo mpe baka yango o epai ya liboso ya ngabuni. | |
Exod | LinVB | 28:38 | Arone alata yango o elongi mpo ya komeme bongo mabe ma bana ba Israel o ntango balingi kobonza mabonza masantu. Ezala ntango inso o elongi ya ye mpo ’te Yawe andima mabonza ma bango. | |
Exod | LinVB | 28:39 | Sono mpe molato mwa malekani kitoko, ngabuni ya malekani kitoko na mpe mokaba motongami malamu. | |
Exod | LinVB | 28:40 | Salela bana ba Arone milato na mikaba. Salela bango mpe mwa enkoti ekokembisa mitó mya bango. | |
Exod | LinVB | 28:41 | Latisa ndeko wa yo Arone na bana ba ye bilamba byango, mpe pakola bango mafuta mpo ’te okotisa bango o mosala mpe osantisa bango mpo ya bo-nganga bwa ngai. | |
Exod | LinVB | 28:42 | Mpo ya kosipa bolumbu bwa bango, sala bilamba bya makolo bya malekani, banda loketo kin’o mabolongo. | |
Chapter 29
Exod | LinVB | 29:1 | Mpo ya kokulisa bango bonganga bwa ngai, sala boye : Kamata mwana ngombe na mpata babali ibale, isali na mbeba te. | |
Exod | LinVB | 29:2 | Na nsima kamata mampa balambi na nkisi te, ná minkate misali na nkisi te milambami na mafuta, ná bisikiti bisali na nkisi te, kasi bipakolami na mafuta mpe bilambami na fufu ya mbuma ya mampa. | |
Exod | LinVB | 29:3 | Tia yango inso o ekoló se yoko mpe bonza yango bongo o ekoló, esika yoko na ngombe mpe na mpata babali ina ibale. | |
Exod | LinVB | 29:9 | Kanga mokaba o loketo la bango mpe bongisela bango enkoti. Okokotisa Arone na bana ba ye bongo o mosala moye mpo ’te bazala banganga Nzambe seko. | |
Exod | LinVB | 29:10 | Baya na mwana ngombe epai ya Ema ya Likita : Arone na bana ba ye batia maboko o motó mwa ngombe. | |
Exod | LinVB | 29:12 | Kamata makila ma ngombe, mpe tia mango na mosapi o maseke ma altare ; sopa makila masusu o nse ya altare. | |
Exod | LinVB | 29:13 | Mafuta manso maye makangemi na nsopo, na libale mpe na mpiko ibale, otumba mango o altare. | |
Exod | LinVB | 29:14 | Kasi mosuni mwa ngombe, lomposo na nyei, zikisa yango inso na móto o libanda lya nganda, zambi ezali moboma mwa bolimbisi masumu. | |
Exod | LinVB | 29:17 | Sese mpata biteni biteni, sukola nsopo na makolo ma mpata, mpe tia inso o mosuni na motó mwa mpata. | |
Exod | LinVB | 29:18 | Na nsima tumba mpata mobimba o altare ; ezali libonza lya kotumba lya nsolo mpimbo likosepelisaka Yawe. | |
Exod | LinVB | 29:20 | Boma mpata, tia makila o eteni ya nse ya litoi lya mobali lya Arone na bana ba ye ; tia mango mpe o mosapi monene mwa loboko la bango la mobali mpe o mosapi monene mwa lokolo la bango la mobali. Na nsima nyakela makila o mipanzi mya altare. | |
Exod | LinVB | 29:21 | Kamata ndambo ya makila o altare mpe ndambo ya mafuta ma bopakoli, nyakela Arone mango na mpe bilamba bya ye ; sala mpe bongo na bana ba ye mpe na bilamba bya bango. Bongo bakosala basantu : ná ye, ná bilamba bya ye, ná bana ba ye ná bilamba bya bango. | |
Exod | LinVB | 29:22 | Ya mpata ena kamata mosuni mosali na mafuta mingi, mokila, mafuta makangemi na nsopo mpe na libale, mpiko na mafuta ma yango, na mpe lokolo la mobali, zambi ezali mpata ya bokotisi moto o mosala. | |
Exod | LinVB | 29:23 | O ekoló esika batii mampa mazali na nkisi te, eye ezali liboso lya Yawe, kamata limpa lyoko na monkate moko balambi na mafuta na mpe bisikiti yoko. | |
Exod | LinVB | 29:24 | Tia inso o maboko ma Arone na bana ba ye, mpe tombola maboko ma bango mpo ya kobonzela Yawe yango. | |
Exod | LinVB | 29:25 | Na nsima oswa yango lisusu o maboko ma bango mpe tumba inso o moboma mosali o altare ; ezali libonza lya nsolo mpimbo likosepelisa Yawe, libonza lya bilei litumbami mpo ya Yawe. | |
Exod | LinVB | 29:26 | Kamata ntolo ya mpata ena, eye babomi mpo ya kokotisa Arone o mosala, tombola yango mpo ya kobonzela Yawe. Eteni eye ezali ya yo. | |
Exod | LinVB | 29:27 | Okosantisa bongo ntolo eye babonzaki na mpe lokolo la mpata loye balongolaki liboso mpe balakisaki Yawe, mpo ya kokotisa Arone na bana ba ye o mosala. | |
Exod | LinVB | 29:28 | Ezali eteni ya makabo Arone na bana ba ye bakoswa o maboko ma bana ba Israel ; ezali mobeko mwa seko, zambi ezali eteni ya mabonza bana ba Israel basengeli kopesa banganga Nzambe, eteni bakamataki o kati ya miboma mya bondeko, eteni ya Yawe. | |
Exod | LinVB | 29:29 | Bilamba bisantu bya Arone bisengeli kokitana na bana ba ye. Mokolo bakopakola moto mafuta mpo ya kokotisa ye o mosala mwa nganga Nzambe, asengeli kolata bilamba bina. | |
Exod | LinVB | 29:30 | Mwana oyo wa Arone akosala nganga Nzambe nsima ya ye, alata byango mikolo nsambo, o ntango akoyingela o Ema ya Likita mpo ya kosala mosala o esika esantu. | |
Exod | LinVB | 29:32 | Arone na bana ba ye balia mosuni mwa mpata ena, na mpe mampa mazali o ekoló, balia yango o monoko mwa Ema ya Likita. | |
Exod | LinVB | 29:33 | Balia biloko balambaki mpo ya kopetola bango o ntango bakotisi bango o mosala mpe basantisi bango. Moto mosusu alia byango te, zambi bisali biloko bisa-ntu. | |
Exod | LinVB | 29:34 | Soko na ntongo ndambo ya mosuni mwa moboma mpo ya bokotisi bango o mosala, na mpe ndambo ya mampa itikali, bwaka yango o móto, balia yango te, zambi bisali biloko bisantu. | |
Exod | LinVB | 29:35 | Sala bobele bongo na Arone na bana ba ye, se lokola natindaki yo. Bokotisi bango o mosala moye boumela mikolo nsambo. | |
Exod | LinVB | 29:36 | Mokolo na mokolo okoboma mwana ngombe mpo ya milulu mya bolimbisi masumu. Okobonza yango o altare mpo ya kolongola masumu. Na nsima okopakola altare mafuta mpo ya kosantisa yango. | |
Exod | LinVB | 29:37 | Mikolo nsambo okobonza o altare mabonza ma bolimbisi masumu, mpe okobenisa yango, ekosala bongo altare esantu mpenza, mpe biloko binso bikosimba altare bikosala bisantu. | |
Exod | LinVB | 29:40 | Elongo na mwana mpata ya yambo okobonza sani ya litele itano ya fufu esangani na kopo ya litele ibale ya mafuta ma oliva na kopo ya litele ibale ya vino. | |
Exod | LinVB | 29:41 | Mwana mpata ya ibale, okobonza yango na mpokwa elo-ngo na libonza lya bolei mpe lya bomeli lokola osalaki na ntongo ; ezala libonza lya nsolo mpimbo, libonza lya bilei litumbami mpo ya Yawe. | |
Exod | LinVB | 29:42 | Libonza liye likotumbama seko o mabota ma bino manso, penepene na monoko mwa Ema ya Likita, o miso ma Yawe, o esika nakoswana na yo mpo ya kosolola na yo. | |
Exod | LinVB | 29:44 | Nakosantisa Ema ya Likita na altare. Nakosantisa mpe Arone na bana ba ye mpo ’te bakoka kosala mosala mwa bonganga bwa ngai. | |
Chapter 30
Exod | LinVB | 30:1 | Okosala mpe altare esika basengeli kotumba mpaka ya malasi ; sala yango na nzete ya akasia. | |
Exod | LinVB | 30:2 | Bolai bosala loboko loko, bonene loboko loko ; bipai binei bikokana ; bosanda bwa yango bosala maboko mabale na ndambo ; maseke maka-ngema na yango lokola eloko yoko. | |
Exod | LinVB | 30:3 | Zipa na wolo kitoko eteni ya likolo, mipanzi na maseke ma meza ; zongazonga na yango otia ekembiseli ya wolo. | |
Exod | LinVB | 30:4 | Epai na epai otia mitako mibale mya wolo o nse ya ekembiseli o bisika bakokotisa mabaya ma komeme altare. | |
Exod | LinVB | 30:6 | Tia meza liboso lya elamba elai, eye ekobomba Sanduku ya Bondeko, liboso lya ezipeli eye ezali likolo lya Sanduku o esika ena nalingi kokutana na yo. | |
Exod | LinVB | 30:7 | Kuna Arone atumba mpaka ya malasi, ntongo inso ntango akobongisa mwinda, atumba mpaka. | |
Exod | LinVB | 30:8 | Ekomi mpokwa, o ntango akopelisa mwinda, atumba mpaka lisusu. Ezali mpaka ya kotumba ntango inso o mabota ma bino seko. | |
Exod | LinVB | 30:9 | O altare eye okoki kotumba mpaka ya mpamba te, kobonza libonza lya kotumba to lya bilei te, kosopa vino mpe te. | |
Exod | LinVB | 30:10 | Mbala yoko o mobu Arone asala milulu mya bosengi bolimbisi o maseke ma altare. Mobu na mobu, o eyenga enene ya bosengi Bolimbisi masumu, Arone asala na makila ma moboma milulu mya bosengi Bolimbisi masumu. Bana ba bino basala se bongo o bileko na bileko. Yango eleki bosantu o miso ma Yawe. » | |
Exod | LinVB | 30:12 | « Mokolo okotanga bana ba Israel, moko moko afuta mpako ya ye ya bosikoli bomoi, mpo ’te bokono bobe bokwela ye te o ntango ya botangi bato. | |
Exod | LinVB | 30:13 | Bato banso basengeli kotangema bafuta ndambo ya motako, motako mwa esika esantu. Ndambo eye ya motako ezala mpako ya Yawe. | |
Exod | LinVB | 30:14 | Bato banso basengeli kotangema ape : bato bakokisi mibu ntuku ibale bafuta mpako ya Yawe. | |
Exod | LinVB | 30:15 | Mpo ya bosikoli bomoi bwa ye, ná moto wa nkita ná mobola bapesa se ndambo ya motako. | |
Exod | LinVB | 30:16 | Kamata mosolo mwa mpako ya bomoi ya bana ba Israel, mpe pesa mwango mpo ya mosala mwa Ema ya Likita mpe mpo ’te Yawe akanisa bana ba Israel, bongo bokoka kosikola bomoi bwa bino. » | |
Exod | LinVB | 30:18 | « Mpo ya bopetoli, sala sani enene ya mbengi na ebonga ya mbengi ; tia mai o sani, eye okotia kati ya Ema na altare. | |
Exod | LinVB | 30:20 | Ekokoto bango o Ema ya Likita bamisosa na mai mpo ’te bakufa te ; se bongo soko babelemi na altare mpo ya kosala mosala, to mpo ya kobonzela Yawe libonza lya kotumba. | |
Exod | LinVB | 30:21 | Basukola maboko na makolo mpo ’te bakufa te : Arone na bana ba ye batosa mobeko moye mwa seko, o bileko na bileko. » | |
Exod | LinVB | 30:23 | « Luka matiti na malasi ma nsolo mpimbo : mitako nkama itani mya mira ya mai, mitako nkama ibale na ntuku itano mya sinamome ya malasi na mitako nkama ibale na ntuku itano mya matiti ma nsolo mpimbo, | |
Exod | LinVB | 30:24 | mitako nkama itano mya likasu lokola mitako mya esika esantu na kopo ya mafuta ma oliva. | |
Exod | LinVB | 30:25 | Sala na mango mafuta masantu ma bopakoli, sangisa inso lokola mosali malasi akosalaka ; ezala bongo mafuta masantu ma bopakoli. | |
Exod | LinVB | 30:27 | na meza na biloko binso bya meza, etemiseli ya mwinda na biloko binso bitali mwinda, na altare ya malasi, | |
Exod | LinVB | 30:28 | altare ya mabonza ma kotumba na biloko binso bitali altare, na sani enene ya kosukola na ebonga ya yango. | |
Exod | LinVB | 30:29 | Santisa biloko binso, bongo bikosala bisa-ntu, ata biye bisimbi byango bikosala bisantu mpenza. | |
Exod | LinVB | 30:30 | Pakola Arone na bana ba ye mafuta ma bosantisi mpo ’te basalela ngai o mosala mwa bonganga. | |
Exod | LinVB | 30:31 | Na nsima okoloba na bana ba Israel : Mafuta maye makosalela bino ná mabota ma bino mafuta masantu ma bopakoli. | |
Exod | LinVB | 30:32 | Na mafuta mana okoki kopakola moto mosusu te, mpe okoki kosala na mango mosala mosusu te. Ezali eloko esantu, omemya yango. | |
Exod | LinVB | 30:33 | Moto mosusu asali malasi mana to apakoli mango moto mosusu, balongola ye o libota lya bandeko ba ye. » | |
Exod | LinVB | 30:34 | Yawe alobi na Mose : « Kamata malasi : storakesi, oniksi, galbano, matiti ma malasi na mpaka ya malasi mpimbo ; ya biloko bina binso se kopo ya lolenge loko. | |
Exod | LinVB | 30:35 | Sala bongo malasi ya kotumba, se lokola mosali malasi akosalaka : mazala na mongwa, peto mpe masantu. | |
Exod | LinVB | 30:36 | Nika ndambo mpe tia yango liboso lya Sanduku ya Bondeko, o Ema ya Likita, o esika nakokutana na yo. Otala mango lokola mafuta masantu. | |
Exod | LinVB | 30:37 | Osala na malasi mana mosala mwa yo moko te : malasi mana mazali masantu, masalema se mpo ya Yawe. | |
Chapter 31
Exod | LinVB | 31:3 | Natondisi ye na elimo ya Nzambe, napesi ye mayele na bwa-nya, ayebi misala ndenge na ndenge : | |
Exod | LinVB | 31:5 | ayebi kokatakata mabanga ma motuya mpo ya kokanga mango o bilamba ; ayebi kosala bikeko bya nzete mpe misala ndenge na ndenge. | |
Exod | LinVB | 31:6 | Nakopesa ye Oliabe, mwana wa Akisamak, wa libota lya Dan, mpo asalisa ye ; mpe napesi mayele na bato banso ba bwanya mpo ’te basala mpo inso natindi yo : | |
Exod | LinVB | 31:7 | ezali Ema ya Likita, Sanduku ya Bondeko na ezipeli ya yango, biloko binso bisengeli kosala o Ema, | |
Exod | LinVB | 31:8 | meza na biloko bya yango, etemiseli ya mwinda mpe biloko bya yango binso, altare ya malasi, | |
Exod | LinVB | 31:10 | bilamba bya lokumu, bila-mba bisantu bya nganga Nzambe Arone na bana ba ye, mpo ’te basala mosala mwa bonganga, | |
Exod | LinVB | 31:11 | mafuta ma bopakoli mpe mpaka ya malasi mpo ya Ndako Esantu. Basala binso lokola natindi yo. » | |
Exod | LinVB | 31:13 | « Loba na bana ba Israel : Botosa mikolo mya Sabato malamu. Sabato ezali elembo kati ya biso na bino mpe na bana ba bino ’te ngai nazali Yawe oyo akosa-ntisaka bino. | |
Exod | LinVB | 31:14 | Botosa mobeko mwa Sabato, botala yango lokola mokolo mosantu. Moto akosantola mokolo mona, baboma ye ; moto akosala mosala o mokolo mona, balongola ye o libota lya ye. | |
Exod | LinVB | 31:15 | Mikolo motoba bosala mosala mwa bino ; mokolo mwa nsambo bopema, mpo ezali mokolo mwa Yawe. Moto ata nani akosala mosala o mokolo mwa Sabato, baboma ye. | |
Exod | LinVB | 31:16 | Bana ba Israel batosa mobeko mwa Sabato o bileko na bileko lokola elembo ya bondeko bwa seko. | |
Exod | LinVB | 31:17 | Kati ya biso na bana ba Israel mokolo mwa Sabato mosali elembo ya bondeko bwa seko, zambi na mikolo motoba Yawe akelaki likolo na nse, kasi o mokolo mwa nsambo atikaki mosala mpe apemaki. » | |
Chapter 32
Exod | LinVB | 32:1 | Emoni bato ’te Mose aumeli kuna o ngomba, bakei koluka Arone, balobi na ye : « Salela biso ekeko ya nzambe moko oyo akokamba biso, zambi Mose oyo abimisaki biso o Ezipeti, toyebi te soko a-zwi likambo. » | |
Exod | LinVB | 32:2 | Arone azongisi : « Bokende kolongola biloko binso bya wolo biye bisali o matoi ma basi ma bino na biye bya bana babali mpe bana basi, apela ngai byango. » | |
Exod | LinVB | 32:4 | Awa azwi byango o maboko ma bango, anyangwisi binso na móto, atuli na yango ekeko ya mwana ngombe. Bato bagangi : « Israel, tala nzambe wa yo, oyo abimisaki yo o Ezipeti. » | |
Exod | LinVB | 32:5 | Emoni Arone bongo, atongi altare o boso bwa ekeko mpe apesi etinda eye : « Lobi tosali na eyenga ya kokumisa Yawe. » | |
Exod | LinVB | 32:6 | Mokolo mwa nsima bato balamuki na ntongontongo, babonzi mabonza ma kotumba mpe bayei na miboma mya bondeko. Bato bafandi mpo ya kolia mpe komele ; na nsima batelemi mpe babandi kobina. | |
Exod | LinVB | 32:7 | Yawe alobi na Mose : « Kita ngomba, zambi bato baye obimisaki o Ezipeti basali lisumu ! | |
Exod | LinVB | 32:8 | Basili balongwi o nzela nalakisi bango. Bamisaleli ekeko ya mwana ngombe, eye etulami na bibende o móto, bakumbameli yango. Babonzeli yango mabonza mpe balobi : Israel, tala nzambe oyo abimisaki yo o Ezipeti. » | |
Exod | LinVB | 32:10 | Tika ngai, nangalisa nkanda ya ngai likolo lya bango, nasilisa bango ! Kasi yo okokoma tata wa ekolo ya bato baike. » | |
Exod | LinVB | 32:11 | Mose ameki kobondela Yawe, Nzambe wa ye, mpo akitisa motema, atuni : « Mokonzi, mpo nini oyokela bato ba yo nkanda ape ? Yo moto obimisaki bango o Ezipeti na nguya enene mpe na bokasi bwa loboko la yo. | |
Exod | LinVB | 32:12 | Mbele ba-Ezipeti bakoloba : Abimisaki bango na mayele mpo ’te bakende kokufa penepene na ngomba, bongo basila o mokili. Tika kosilika makasi ape, mabe olingaki kosala bato ba yo, osala mango te. | |
Exod | LinVB | 32:13 | Kanisa basaleli ba yo Abarama, Isaka na Israel. Olakelaki bango na ndai ‘te : Nakopesa bino bana ebele lokola minzoto mya likolo, mpe nakopesa bankoko ba bino mokili moye mobimba ; mokosala mwa bango seko, lokola nalobaki. » | |
Exod | LinVB | 32:15 | Mose azongi mpe akiti ngomba ; akamati mabanga mabale ma Bondeko o maboko ; mibeko mikomami epai na epai. | |
Exod | LinVB | 32:17 | Yosue ayoki makeléle mpe migango mya bato, alobi na Mose : « Yoka makeléle ma etumba o nganda ! » | |
Exod | LinVB | 32:18 | Mose azongisi : « Ezali nzembo ya bato balongi etumba te, boleli bwa bato bakwei o etumba mpe te. Nazali se koyoka nzembo ya bato bazali kobina. » | |
Exod | LinVB | 32:19 | Ebelemi ye na nganda, amoni ekeko ya ngombe na bato bazalaki kobina. Mose atoki na nkanda, abwaki mabanga mazalaki o maboko ma ye, mpe abukibuki mango wana o nse ya ngomba. | |
Exod | LinVB | 32:20 | Akamati ekeko ya ngombe eye batulaki, abwaki yango o móto ; aniki yango, ekomi mputulu, apanzi yango o mai, mpe amelisi ba-Israel mai mana. | |
Exod | LinVB | 32:21 | Na nsima atuni Arone : « Bato baye basalaki yo nini ’te ondimisa bango lisumu lina linene ? » | |
Exod | LinVB | 32:22 | Arone azongisi : « Mokonzi wa ngai, tika koyoka nkanda ape ! Yo moko oyebi ndenge bato baye bali-ngi kosala mabe. | |
Exod | LinVB | 32:23 | Bango moko basengeki ngai : Salela biso ekeko ya nzambe oyo akokamba biso, zambi Mose oyo abimisaki biso o Ezipeti, toyebi te soko likambo nini likweli ye. | |
Exod | LinVB | 32:24 | Yango wana nayebisaki bango : Banso balati biloko bya wolo, balongola byango ; bapesi ngai byango, nabwaki byango o móto, mpe ebimi wana ekeko eye ya ngombe ! » | |
Exod | LinVB | 32:25 | Mose amoni ’te bato balekisaki ndelo ; Arone alingisaki yango, bakomi bongo koyoka nsoni o miso ma banguna. | |
Exod | LinVB | 32:26 | Bongo Mose akei koteleme o ezibeli ya nganda mpe agangi : « Oyo alingi Yawe, abeleme na ngai ! » Ba-Levi banso bakei kosangana penepene na ye. | |
Exod | LinVB | 32:27 | Alobi na bango : « Yawe, Nzambe wa Israel alobi ape : Bino banso bokamata mopanga ; botambola o nganda mobimba, boleka bipai binso mpe boboma bato, azala ndeko, moyebani to moninga wa yo. » | |
Exod | LinVB | 32:29 | Mose alobi : « Lelo bolakisi ’te bondimi mosala Yawe apesi bino : bobangaki te koboma ata mwana to ndeko wa bino, yango wana Yawe abenisi bino lelo. » | |
Exod | LinVB | 32:30 | Mokolo mwa nsima Mose alobi na bato : « Bosali lisumu linene. Sikawa nakobuta ngomba lisusu, epai ya Yawe ; mbele ndenakoki koswela bino bolimbisi. » | |
Exod | LinVB | 32:31 | Mose azongi epai ya Yawe, alobi : « Mawa mingi ! Bato baye basali lisumu linene, bamisaleli ekoko ya nzambe moko na wolo ! | |
Exod | LinVB | 32:32 | Nzokande, soko olingi, olimbisa lisumu lya bango. Soki te, malamu olongola nkombo ya ngai o buku ya yo. » | |
Exod | LinVB | 32:33 | Yawe azongisi : « O buku ya ngai nakolongola bobele nkombo ya moto oyo asali lisumu o miso ma ngai. | |
Exod | LinVB | 32:34 | Sikawa kende mpe kamba bato o esika nalakisi yo. Anzelu wa ngai akokende liboso lya yo. Baye basali lisumu, nakopesa bango etumbu mokolo bakosambisa bato. » | |
Chapter 33
Exod | LinVB | 33:1 | Yawe alobi na Mose : « Longwa awa mpe kende na bato ba yo, baye obimisaki o Ezipeti ; kende o mokili moye nalakelaki Abarama, Isaka na Yakob na ndai ’te nakopesa bankoko ba bango. | |
Exod | LinVB | 33:2 | Nakotinda anzelu liboso lya yo. Nakobengana ba-Kanana, ba-Amor, ba-Iti, ba-Perisi, ba-Ivi na ba-Yebus. | |
Exod | LinVB | 33:3 | Bokende o mokili motondi na mabéle ma ngombe mpe na mafuta na nzoi. Kasi ngai nakokende elongo na bino te, mpo bosali bato ba mitó makasi ; mbele nakoboma bino o nzela. » | |
Exod | LinVB | 33:4 | Eyoki bato liloba liye lya nsomo, balati mpili, mpe moto moko alati bikembiseli lisusu te. | |
Exod | LinVB | 33:5 | Yawe alobi na Mose : « Loba na bato ba Israel : Bosali bato ba mitó makasi ; soko nakei na bino nzela yoko, ata moke, mbele nakosilisa bino. Sikawa bolongola bikembiseli, nayeba ndenge nini nasala na bino. » | |
Exod | LinVB | 33:7 | Mbala inso Mose apiki Ema o libanda lya nganda mwa mosika ; ata-ngi yango ‘Ema ya Likita’. Moto nyonso alingi kotuna Yawe likambo, asengeli kokende o Ema ya Likita, o libanda lya nganda. | |
Exod | LinVB | 33:8 | Mbala inso Mose azalaki kokende o Ema ya Likita, bato banso batelemi o minoko mya biema bya bango, mpe batikali kotala ye tee ayingeli wana. | |
Exod | LinVB | 33:9 | Ntango Mose akoti o Ema ya Likita, limpinga likiti mpe lisingi monoko mwa Ema, mpe Yawe asololi na ye. | |
Exod | LinVB | 33:10 | Emoni bato limpata litelemi wana lokola likonzi o monoko mwa Ema, banso bafukami o minoko mya biema bya bango. | |
Exod | LinVB | 33:11 | Yawe azalaki kosolola bongo na Mose, mpe bazalaki kokutana lokola moto azali kosolola na moninga wa ye. Na nsima Mose azongi o nganda, kasi mosaleli wa ye Yosue, mwana wa Nun, atikali o Ema ya Likita. | |
Exod | LinVB | 33:12 | Mose alobi na Yawe : « Ya solo, olobi na ngai ’te nakamba bato baye, kasi oyebisi ngai te soko okotinda nani akende na ngai elongo. Nzokande olobaki : Nayebi yo na nkombo ya yo, oswi bolamu o miso ma ngai. | |
Exod | LinVB | 33:13 | Soko ya solo nazwi bolamu o miso ma yo, yebisa ngai nzela ya yo mpo ’te nayeba yo mpe nazwa bolamu o miso ma yo. Kanisa mpe ’te bato baye bazali ekolo ya yo. » | |
Exod | LinVB | 33:16 | Ndenge nini bato bakoyeba ’te ngai na bato ba ekolo ya yo toswi bolamu o miso ma yo soko okokende na biso elongo te ? Bobele bongo ekomonono ’te biso na bato ba yo tokeseni na bato ba bikolo bisusu awa o nse. » | |
Exod | LinVB | 33:17 | Yawe alobi na Mose : « Nakosala lisusu lokola osengi, mpo oswi bolamu o miso ma ngai, mpe nayebi yo na nkombo ya yo. » | |
Exod | LinVB | 33:19 | Yawe alobi : « Nakolakisa yo bonzenga bwa ngai mobimba, mpe o boso bwa yo nakosakola nkombo ya ngai Yawe. Nakolakisa bolamu bwa ngai na moto oyo ngai nalingi, mpe oyo ngai nalingi, nakoyokela ye ngolu. | |
Exod | LinVB | 33:20 | Kasi okoki komono elongi ya ngai te, zambi moto akotala ngai, akotikala na bomoi te. » | |
Exod | LinVB | 33:22 | Ntango nakoleka na nkembo ya ngai, nakokotisa yo o lilusu o kati ya mabanga, mpe nakobatela yo na loboko la ngai tee nasili koleka. | |
Chapter 34
Exod | LinVB | 34:1 | Yawe alobi na Mose : « Kata mabanga mabale lokola maye ma liboso ; buta ngomba mpe nakokoma wana maloba nakomaka o mabanga ma liboso, maye obukaki. | |
Exod | LinVB | 34:2 | Omilengele mpo ya lobi na ntongo ; buta ngomba Sinai na ntongo mpe zila ngai kuna o nsonge ya ngomba. | |
Exod | LinVB | 34:3 | Moto moko abuta ngomba elongo na yo te, moto mosusu amonono o ngomba te. Ata ngombe ata mpata ikoki kolia matiti liboso lya ngomba te. » | |
Exod | LinVB | 34:4 | Mose akati lisusu mabanga mabale, lokola mabanga ma liboso. Na ntongontongo abuti ngomba Sinai lokola Yawe atindi ye, mpe amemi mabanga mabale. | |
Exod | LinVB | 34:6 | Yawe aleki liboso lya ye mpe agangi : « Ngai Yawe ! Yawe azali Nzambe wa ngolu, nakoyokelaka bato mawa ! Nakoyokaka nkanda noki te, nazali motema bolamu mpe lobokó. | |
Exod | LinVB | 34:7 | Nakolakisaka boboto na bato nkoto na nkoto. Nakolimbisaka baye babuki mobeko mpe basali masumu, kasi nakopesaka etumbu ; ata bana, batata, bankoko na bankokolo bakoswa etumbu mpo ya masumu ma bankoko ba bango. » | |
Exod | LinVB | 34:9 | Alobi ape : « Mokonzi, soko ya solo nazwi bolamu o miso ma yo, ondima kokende na biso elongo. Solo, tosali ekolo ya bato ba mitó makasi, nzokande limbisa mabe na masumu ma biso, mpe komisa biso libota lya yo mpenza. » | |
Exod | LinVB | 34:10 | Yawe alobi : « Nakokata na yo bondeko. O miso ma bato banso nakosala makamwisi lokola mamononi naino te o nse mobimba, ata o ekolo nini. Mpe bato banso bazali penepene na yo bakomono misala mya Yawe, zambi nakosala makambo ma nsomo na maboko ma yo. | |
Exod | LinVB | 34:11 | Yoka malamu makambo nakotinda yo lelo. Nakobengana liboso lya yo ba-Amor, ba-Kanana, ba-Iti, ba-Perisi, ba-Ivi na ba-Yebus. | |
Exod | LinVB | 34:12 | Okeba ’te okata bondeko te na bato ba mokili esika olingi kokoto, mpo ’te batiela yo motambo te. | |
Exod | LinVB | 34:13 | Boma kuna bitumbelo bya bango, buka bikeko bya bango mpe kata makonzi ma nkisi ya bango. | |
Exod | LinVB | 34:15 | Okata bondeko te na bato ba ekolo ena, esika bakokumisa banzambe ba bango mpe bakobonzela bango mabonza, mbele bakobenga yo mpo ’te olia nyama ya libonza elongo na bango. | |
Exod | LinVB | 34:16 | Soko okopono bilenge basi ba bango mpo ya kobalisa bana babali ba yo, bilenge basi ba bango bakokende kofukamela banzambe ba bango, bongo bakobenda bana babali ba yo mpo ’te bakumisa banzambe ba bango. | |
Exod | LinVB | 34:18 | Omemya eyenga ya mampa mazangi nkisi. Mikolo nsambo olia mampa mana, lokola natindaki yo ; esalema o elaka natiaki, o sanza ya Abib, zambi o sanza ena obimaki o Ezipeti. | |
Exod | LinVB | 34:20 | Soko mpunda eboti mwana mobali wa yambo, osikola yango na bofuti mpata ; soko osikoli yango te, buka yango nkingo. Osikola mpe bana babali ba yambo banso, moto moko te abima o miso ma ngai maboko mpamba. | |
Exod | LinVB | 34:21 | Sala mosala mikolo motoba, kasi o mokolo mwa nsambo opema, ezala eleko ya kokata bilanga to ya kobuka mbuma. | |
Exod | LinVB | 34:22 | Omemya eyenga ya Poso, eyenga ya kobonzela Yawe mbuma ya yambo ya masangu, na mpe eyenga ya kolokoto mbuma iye itikalaki o nsuka ya elanga. | |
Exod | LinVB | 34:23 | Mbala isato o mobu, babali banso bakende komilakisa o boso bwa Mokonzi Yawe, Nzambe wa Israel. | |
Exod | LinVB | 34:24 | Nakobotolo bikolo bisusu mabelé ma bango mpe nakokomisa ekolo ya yo enene ; moto moko te akolula mabelé ma yo o ntango okokende komilakisa o boso bwa Yawe Nzambe wa yo, mbala isato o mobu. | |
Exod | LinVB | 34:25 | Ntango okobonzela ngai makila ma nyama, okoki kosangisa mango te na mampa malambami na nkisi ; okoki mpe kobomba Mpata ya Pasika tee ntongo te. | |
Exod | LinVB | 34:26 | Oya o ndako ya Yawe Nzambe wa yo na mbuma ya yambo ya ela-nga ; pono mbuma iye ileki ilamu. Olamba mpe mwana ntaba te o mabéle ma mama wa ye. » | |
Exod | LinVB | 34:27 | Yawe alobi na Mose : « Koma maloba maye o monkanda, zambi bobele na maloba maye nakati bondeko na yo mpe na Israel. » | |
Exod | LinVB | 34:28 | Mose atikali elongo na Yawe mikolo ntuku inei, butu moi. Alei te, ameli mpe te ; akomi o etanda maloba ma Bondeko, mazali Mibeko zomi. | |
Exod | LinVB | 34:29 | Mose akiti ngomba Sinai, amemi mabanga ma Bondeko o maboko. Ayebi te ’te elongi ya ye ezali kongenge, zambi asololaki na Nzambe. | |
Exod | LinVB | 34:30 | Arone na bana ba Israel bamoni Mose mpe ndenge elongi ya ye ezali kongenge, babangi kobeleme na ye. | |
Exod | LinVB | 34:31 | Mose abengi bango. Arone na bayangeli banso ba libota bayei epai ya ye mpe Mose asololi na bango. | |
Exod | LinVB | 34:32 | Na nsima bana ba Israel banso bayei ; Mose ayebisi bango mibeko minso Yawe apesaki ye o ngomba Sinai. | |
Exod | LinVB | 34:34 | Mbala inso abelemi na Yawe mpo ya kosolola na ye alongoli elamba kin’o ntango abimi. Ebimi ye wana, ayebisi bana ba Israel makambo manso Nzambe atindi. | |
Chapter 35
Exod | LinVB | 35:1 | Mose asangisi bato banso ba Israel mpe alobi na bango : « Apoka makambo Yawe atindi biso tosala : | |
Exod | LinVB | 35:2 | Mikolo motoba bokoki kosala mosala, kasi botala mokolo mwa nsambo lokola mokolo mosantu, mokolo mwa bopemi mpenza mpo ya Yawe. Moto asali mosala ata nini o mokolo mona, baboma ye. | |
Exod | LinVB | 35:5 | O kati ya biloko bya bino, bolongola ndambo mpo ya kofuta mpako ya Yawe. Baye banso bazali na motema mwa kokaba, bapesa Yawe likabo : ezala wolo, palata to mbengi ; | |
Exod | LinVB | 35:6 | ezala elamba ya kiusa ya longondo, ya motane, ya moindo to ya malekani kitoko to ya nsuki ya ntaba ; | |
Exod | LinVB | 35:8 | ezala mafuta mwa mwinda, malasi mpo ya kosala mafuta ma bopakoli to mpaka ya malasi ; | |
Exod | LinVB | 35:11 | basala Ndako esantu, ema, motondo, mitako, bisingeli, mabasa, makonzi mpe makolo ma yango ; | |
Exod | LinVB | 35:14 | etemiseli ya mwinda na biloko bya yango ; miinda na mafuta mpo ya kopelisa mwinda ; | |
Exod | LinVB | 35:15 | altare ya malasi na mabaya ma bomemi lango, mafuta ma bopakoli, mpaka ya malasi na elamba ekosipa ezibeli ya Ndako esantu ; | |
Exod | LinVB | 35:16 | altare ya mabonza ma kotumba, na lopango la mbengi losali lokola monyama, na mabaya ma bomemi lango, na biloko bya altare binso ; sani enene ya kosukola na ebonga ya yango ; | |
Exod | LinVB | 35:17 | bilamba bya lopango, makonzi ma yango, makolo ma yango mpe elamba ekosipa ezibeli ya lopango ; | |
Exod | LinVB | 35:19 | bilamba bya lokumu mpo ya mosala o esika esantu, bilamba bisantu bya Arone na bana ba ye mpo ’te basala mosala mwa bonganga. » | |
Exod | LinVB | 35:21 | Baye banso bazali na motema mwa kokaba eloko, bapesi Yawe likabo mpo ’te basala na yango Ema ya Likita, na misala ndenge na ndenge na mpe bilamba bisantu. | |
Exod | LinVB | 35:22 | Babali na basi bayei, baye banso bazalaki na motema mwa kokaba eloko, bapesi biloko bya monzele, bikomo, mpete, nsinga ya mayaka, bikembiseli bya wolo ndenge na ndenge : moto na moto apesi Yawe likabo lya wolo lokola alakelaki. | |
Exod | LinVB | 35:23 | Baye bazalaki na bilamba bya kiusa ya longondo, ya motane, ya moindo to ya malekani kitoko, to ya nsuki ya ntaba, mposo ya mpata bapakoli ngola, to mposo ya letenu, bayei na byango. | |
Exod | LinVB | 35:24 | Baye banso balingi kokaba likabo lya palata to lya mbengi, bayeli Yawe lyango ; baye bazalaki na mabaya ma akasia mpo ya misala miike, bayei na mango. | |
Exod | LinVB | 35:25 | Basi banso bayebi kosono bilamba, bayei na biye basonoki : bilamba bya kiusa ya longondo, ya motane, ya moindo mpe ya malekani kitoko. | |
Exod | LinVB | 35:27 | Bankumu bayei na mabanga ma kornaline mpe na mabanga ma motuya ma kokanga o efod mpe o libenga. | |
Exod | LinVB | 35:28 | Bayei mpe na malasi mpe na mafuta ma mwinda, mpo ’te bakoka kosala mafuta ma bopakoli mpe mpaka ya malasi. | |
Exod | LinVB | 35:29 | Bana banso ba Israel, babali na basi, baye bazalaki na motema mwa kokaba likabo mpo ’te basukisa mosala moye Yawe atindaki Mose, bayeli Yawe lyango. | |
Exod | LinVB | 35:30 | Mose alobi na bana ba Israel : « Apoka, Yawe aponi Besalel, mwana wa Uria, nkoko wa Ur, wa libota lya Yuda. | |
Exod | LinVB | 35:31 | Atondisi ye na elimo ya Nzambe, apesi ye ntoki na mayele, ayebi misala ndenge na ndenge : | |
Exod | LinVB | 35:33 | ayebi kokatakata mabanga ma motuya mpo ya kokangisa mango o bilamba ; ayebi kosala bikeko bya nzete mpe misala ndenge na ndenge. | |
Exod | LinVB | 35:34 | Akabeli Besalel mpe Oliabe, mwana wa Akisamak, wa libota lya Dan, bwanya bwa koteya baninga. | |
Chapter 36
Exod | LinVB | 36:1 | Besalel, Oliabe na bato banso Yawe apesaki ntoki na mayele ma kosilisa misala minso mya esika esantu malamu, basala manso lokola Yawe atindaki. » | |
Exod | LinVB | 36:2 | Bongo Mose abengi Besalel, Oliabe na bato banso Yawe apesaki ntoki, baye banso bandimi komipesa na mosala mona. | |
Exod | LinVB | 36:3 | Mose apesi bango biloko binso bana ba Israel bayelaki ye, biye bato bakabaki mpo ya kotonga esika esantu. Awa bato bazalaki koya ntongo inso na mabonza, | |
Exod | LinVB | 36:4 | bato ba ntoki, baye bazalaki kosala mosala monso mwa esika esantu, batiki naino mosala, | |
Exod | LinVB | 36:5 | mpe balobi na Mose : « Biloko bato basili kopesa biso mpo ya mosala Yawe atindaki, bileki mingi. » | |
Exod | LinVB | 36:6 | Mose atindi etinda ’te moto moko, azala mobali to mwasi, aya lisusu na biloko mpo ya esika esantu te ; mpe bapekisi ’te bato baya na biloko lisusu. | |
Exod | LinVB | 36:8 | O kati ya bato ba mosala, bato ba ntoki batongi Ndako esantu. Ndako etongami na bilamba zomi bya malekani kitoko, na elamba ya kiusa ya longondo, ya motane mpe ya moindo ; bakembisi byango na bilili bya bakerubim. | |
Exod | LinVB | 36:9 | Bolai bwa bilamba biye bosalaki maboko ntuku ibale na mwambe, bonene maboko manei. Bilamba binso bikokani na bolai mpe na bonene. | |
Exod | LinVB | 36:11 | Bakangisi eteni ya nsuka ya bilamba bya yambo na nkamba ya malusu ya kiusa ya longondo, mpe basali se bongo na bilamba bisusu. | |
Exod | LinVB | 36:12 | Batii nkamba ya motindo mona ntuku itano o liboke lya yambo, mpe nkamba ntuku itano o liboke lya mabale mpo ’te ikokana na bolai. | |
Exod | LinVB | 36:13 | Basali mitako ntuku itano mya wolo mpe bakangisi bilamba bina binso na mitako mina. Bobele bongo Ndako esantu ekomi lokola eloko yoko. | |
Exod | LinVB | 36:14 | Na nsima batongi bilamba zomi na yoko bya nsuki ya ntaba mpo ya kotia ema likolo lya Ndako esantu. | |
Exod | LinVB | 36:15 | Bolai bwa bilamba ntuku isato, bonene maboko manei. Bilamba bina zomi na yoko bikokani na bolai mpe na bonene. | |
Exod | LinVB | 36:17 | Bakangisi eteni ya nsuka ya bilamba bya yambo na nkamba ya malusu ntuku itano, mpe bakangisi liboke lya mabale na nkamba ya malusu ntuku itano lisusu. | |
Exod | LinVB | 36:18 | Basali mitako mya mbengi ntuku itano mpo ya kokangisa ema mpo binso bikoma lokola eloko yoko. | |
Exod | LinVB | 36:19 | Bazipi ema mobimba na ema ya mposo ya mpata bapakoli ngola na mpe ema esusu ya mposo letenu likolo. | |
Exod | LinVB | 36:22 | Babaki na bisingeli binso mabaya make mabale ; basali se bongo na bisingeli binso bya Ndako esantu. | |
Exod | LinVB | 36:24 | Batii makolo ma palata ntuku inei mpo ya bisingeli bina ntuku ibale : makolo mabale o nse ya ezingeli yoko yoko mpo ya kokotisa nsonge ya mabaya mana. | |
Exod | LinVB | 36:29 | Bisingeli bina binso bikabwani epai ya nse mpe bikangemi epai ya likolo o esika bakangaki mpete ya yambo. Basali se bongo na bisingeli bibale bya matumu mabale ma Ndako esantu. | |
Exod | LinVB | 36:30 | Ezalaki bongo bisingeli mwambe na makolo ma byango ma palata zomi na motoba : makolo mabale o nse ya ezingeli yoko yoko. | |
Exod | LinVB | 36:32 | mabasa matano o epai yoko ya Ndako esantu, matano o epai esusu ya Ndako esantu, mpe matano masusu o epai ya nsima, o Westi. | |
Exod | LinVB | 36:33 | Libasa liye lisali o kati lisangisi bisingeli binso banda eye ya liboso tee eye ya nsuka. | |
Exod | LinVB | 36:35 | Batongi elamba enene ya kiusa ya longondo, ya motane, ya moindo mpe ya malekani kitoko ; bakembisi yango na bilili bya bakerubim. | |
Exod | LinVB | 36:36 | Batii yango o makonzi manei ma akasia, mazipani na wolo, bakotisi wana nsete ya wolo mpe batuli makolo manei ma palata mpo ya kokumba makonzi. | |
Exod | LinVB | 36:37 | Mpo ya kosipa monoko mwa ema, basoni elamba enene ya kiusa ya longondo, ya motane, ya moindo mpe ya malekani kitoko. | |
Chapter 37
Exod | LinVB | 37:1 | Besalel asali Sanduku na mabaya ma akasia. Bolai bwa yango maboko mabale na ndambo, bonene loboko loko na ndambo, mpe bosanda loboko loko na ndambo. | |
Exod | LinVB | 37:2 | Azipi yango na manzanza ma wolo kitoko o kati mpe o libanda, akembisi yango bipai binso na bikembiseli bya wolo. | |
Exod | LinVB | 37:3 | Mpo ya Sanduku atuli mpete inei ya wolo mpe atii yango o nse o bipai binei ; mpete ibale epai, mpete ibale epai. | |
Exod | LinVB | 37:5 | Na nsima akotisi mango o kati ya mpete iye ibakemi na sanduku epai na epai mpo ’te bakoka komeme Sanduku. | |
Exod | LinVB | 37:6 | Asali mpe ezipeli ya wolo kitoko, bolai maboko mabale na ndambo, bonene loboko loko na ndambo. | |
Exod | LinVB | 37:8 | Batii bakerubim babale epai na epai ya nsuka ; bakerubim babele bikangemi na ezipeli. | |
Exod | LinVB | 37:9 | Bakerubim batomboli mapapu, mpe babateli bongo ezipeli ; bazalaki kotalana ; miso ma bango matali mpe ezipeli. | |
Exod | LinVB | 37:10 | Asali meza na mabaya ma akasia ; bolai maboko mabale, bonene loboko loko, na bosanda loboko loko na ndambo. | |
Exod | LinVB | 37:12 | Zongazonga na meza akati nkoma bonene lokola misapi misato mpe azingi inso lisusu na ekembiseli ya wolo. | |
Exod | LinVB | 37:16 | Asali biloko binso mpo ya kotia o meza : sani, kopo, mbilika na mbeki mpo ya mabonza ma komele ; asali binso na wolo. | |
Exod | LinVB | 37:17 | Asali etemiseli ya mwinda ya wolo kitoko. Atuli inso na wolo, nse mpe mobimbi mwa yango. Atuli fulele, mbuma na nkasa ya yango, asa-ngisi inso ikoma lokola eloko yoko. | |
Exod | LinVB | 37:19 | Etapi ya yambo ezalaki na fulele isato ifungwani lokola nkeni elongo na mbuma mpe na nkasa. Etapi esusu ezalaki na fulele isato, mbuma mpe na nkasa. Ezalaki se ndenge yoko na bitapi motoba bya etemiseli ya mwinda. | |
Exod | LinVB | 37:21 | Makbuma yoko o nse ya bitapi bibale bya yambo bya etemiseli ya mwinda ; mbuma yoko o nse ya bitapi bibale bisusu, mpe mbuma yoko o nse ya bitapi bibale bya nsuka ; ezalaki bongo bitapi motoba bya etemiseli ya mwinda. | |
Exod | LinVB | 37:22 | Mbuma na bitapi isangani na etemiseli ya mwinda, mpe inso itulami na wolo mpe isangani lokola eloko yoko. | |
Exod | LinVB | 37:23 | Na nsima asali miinda nsambo na biloko bya kosimisa mwinda na sani ya mputulu na wolo. | |
Exod | LinVB | 37:24 | Mpo ya kosala etemiseli ya mwinda na biloko bya yango binso asengelaki na talenta yoko ya wolo kitoko. | |
Exod | LinVB | 37:25 | Asali altare ya malasi na akasia, bolai loboko loko, bonene loboko loko : bipai binso bikokani ; bosanda bwa yango maboko mabale na ndambo ; maseke makangemi na yango lokola eloko yoko. | |
Exod | LinVB | 37:26 | Azipi meza epai ya likolo, na mipanzi mya yango, na maseke ma yango na wolo, mpe akembisi yango na ekembiseli ya wolo epai na epai. | |
Exod | LinVB | 37:27 | Atii mitako mibale mya wolo o nse ya ekembiseli epai na epai ; atii myango o bisika bibale mpo ya kokotisa wana mabaya ma kotombola altare. | |
Chapter 38
Exod | LinVB | 38:1 | Atongi altare mpo ya kotumba mabonza na mabaya ma akasia, bolai maboko matano, bonene maboko matano : bipai binso bikokani. Bosanda bosalaki maboko masato. | |
Exod | LinVB | 38:2 | O bipai binei atii maseke masangani na yango lokola eloko yoko, azipi yango na mbengi. | |
Exod | LinVB | 38:3 | Asali biloko binso bya altare : mbeki mpo ya kotia mputulu, mpau, sani ya konyakela mai, nkanya na mbeki mpo ya mpaka ya malasi. Asali biloko biye binso na mbengi. | |
Exod | LinVB | 38:4 | Asali mpe lopango zongazonga na altare ; ezalaki lokola monyama mwa mbengi banda eteni ya nse tee o kati ya altare. | |
Exod | LinVB | 38:7 | Akotisi mango o kati ya mpete itulami bipai bibale bya altare mpo ya komeme yango. Asali yango lokola sanduku ya mabaya, o kati eloko te. | |
Exod | LinVB | 38:8 | Asali sani enene ya mbengi na mpe ebonga ya yango ya mbengi. Asali yango na talatala ya basi baye bakosalaka mosala o ezibeli ya Ema ya Likita. | |
Exod | LinVB | 38:9 | Asali mpe lopango ; epai ya Sudi bilamba bya lopango bisalemaki na malekani kitoko, na bolai maboko monkama. | |
Exod | LinVB | 38:10 | Makonzi ntuku ibale na makolo ntuku ibale mazalaki ma mbengi, kasi nsete na mpete ya mango isalaki ya palata. | |
Exod | LinVB | 38:11 | Se bongo epai ya Nordi : bilamba bya maboko monkama, makonzi ntuku ibale na makolo ntuku ibale mazalaki ma mbengi, kasi nsete na mpete ya mango isalaki ya palata. | |
Exod | LinVB | 38:12 | Epai ya Westi bilamba bya maboko ntuku itano, bisalaki na makonzi zomi na makolo zomi. Nsete na mpete ya mango isalaki ya palata. | |
Exod | LinVB | 38:14 | Atii bilamba bya maboko zomi na matano mpo ya kosipa ezibeli esika bakokotoko, na makonzi masato na makolo masato. | |
Exod | LinVB | 38:15 | O epai esusu bakokotoko, epai na epai ya monoko mwa lopango, atii bilamba bya maboko zomi na matano, na makonzi masato na makolo masato. | |
Exod | LinVB | 38:17 | Makolo na makonzi mazalaki ma mbengi ; nsete na mpete ya mango mazalaki ma palata ; mitó mya makonzi misipami na palata mpe makonzi manso ma lopango mazalaki na mpete ya palata. | |
Exod | LinVB | 38:18 | Elamba elai o monoko mwa lopango esonami na kiusa ya longondo, ya motane, ya moindo mpe ya malekani kitoko. Bolai bwa elamba maboko ntuku ibale, bosanda to bonene maboko matano, se lokola bilamba bya lopango. | |
Exod | LinVB | 38:19 | Makonzi manei na makolo manei mazalaki ma mbengi, bikangeli bisalaki bya palata, mitó mya makonzi misipami na palata, misingami na mpete ya palata. | |
Exod | LinVB | 38:21 | Batangi motuya mwa biloko binso bisengelaki na botongi Ndako esantu, Ndako ya Bondeko. Mose atindaki ba-Levi basala mosala mona, Itamar, mwana wa Arone, akambi mwango. | |
Exod | LinVB | 38:22 | Besalel, mwana wa Uria, nkoko wa Ur, wa libota lya Yuda asali misala minso lokola Yawe atindaki Mose. | |
Exod | LinVB | 38:23 | Oliab, mwana wa Akisamak, wa libota lya Dan, azalaki elongo na ye ; ye moto azalaki kokatakata mabanga, kolita nsinga, kotonga bilamba bya kiusa ya longondo, ya motane, ya moindo mpe bya malekani kitoko. | |
Exod | LinVB | 38:24 | Wolo inso ikotoki o misala minso mya kotonga Ndako esantu, wolo iye bazalaki kokaba, ekokaki talenta ntuku ibale na libwa na mpe mitako monkama na ntuku isato, lokola bakotangaka myango o esika esantu. | |
Exod | LinVB | 38:25 | Motuya mwa palata, eye bazwaki ntango batangaki bato, mokokaki talenta monkama mpe mitako nkoto yoko na nkama nsambo na ntuku nsambo na mitano, lokola bakotangaka myango o esika esantu. | |
Exod | LinVB | 38:26 | Bato banso batangemaki bafuti ndambo ya motako, motako lokola mwa esika esantu. Batangi bobele bato bakokisi mibu ntuku ibale, bazalaki nkoto nkama motoba na isato na nkama itano na ntuku itano. | |
Exod | LinVB | 38:27 | Bazwi bongo talenta monkama ya palata mpo ya kotula makolo ma esika esantu na makolo ma elamba elai, makolo monkama mpo ya talenta monkama, talenta yoko mpo ya lokolo loko. | |
Exod | LinVB | 38:28 | Azwi mitako nkoto yoko na nkama nsambo na mitano, asali na myango nsete mpo ya makonzi mpe azipi mitó mya yango na mpete. | |
Exod | LinVB | 38:29 | Batangi mpe mbengi eye babonzaki : talenta ntuku nsambo mpe mitako nkoto ibale na nkama inei. | |
Exod | LinVB | 38:30 | Asali na yango makolo ma monoko mwa Ema ya Likita, altare ya mbengi, lopango loye losali lokola monyama, na biloko binso bya altare, | |
Chapter 39
Exod | LinVB | 39:1 | Basoni bilamba mpo ya kosala mosala o esika esantu na kiusa ya longondo, ya motane mpe ya moindo. Basali bilamba bisantu bya Arone lokola Yawe atindaki Mose. | |
Exod | LinVB | 39:2 | Basoni efod na nsinga ya wolo, ya kiusa ya longondo, ya motane, ya moindo mpe ya malekani kitoko. | |
Exod | LinVB | 39:3 | Bakati manzanza ma wolo mpo makoma nkamba, basangisi mango na nsinga ya kiusa ya longondo, ya motane, ya moindo mpe ya malekani kitoko, lokola moto oyo akolita bilamba akosalaka. | |
Exod | LinVB | 39:4 | Basoni bilamba bibale mpo ya kokangisa byango na mapeke ; bakangi byango na nsonge ibale. | |
Exod | LinVB | 39:5 | Elamba ya nkingo eye batii likolo lya efod, esonomi se bongo : ezali ya wolo, ya kiusa ya longondo, ya motane, ya moindo mpe ya malekani kitoko lokola Yawe atindaki Mose. | |
Exod | LinVB | 39:6 | Bakati mabanga ma kornaline, bakangi mango o bikangeli bya wolo, mpe bakomi wana nkombo ya bana ba Israel lokola bakosalaka elembo. | |
Exod | LinVB | 39:7 | Bakangi mabanga mana o bilamba bya mapeke bya efod mpo ’te Arone akanisa bana ba Israel, lokola Yawe atindaki Mose. | |
Exod | LinVB | 39:8 | Basali mpe libenga, lisonomi se lokola efod : na wolo, na kiusa ya longondo, ya motane, ya moindo mpe ya malekani kitoko. | |
Exod | LinVB | 39:10 | Bakembisi lyango na mabanga kitoko mpe batii mango o milongo minei. O molongo mwa yambo batii libanga lya sardwane, lya topaze mpe lya emerode. | |
Exod | LinVB | 39:13 | O molongo mwa minei batii libanga lya krisolite, lya kornaline mpe lya yaspe. Bakotisi mango manso o bikangeli bya wolo. | |
Exod | LinVB | 39:14 | Bakomi wana nkombo ya bana ba Israel, nkombo zomi na ibale, lokola bakosalaka elembo : libanga lyoko lyoko lisalaki na nkombo yoko ya mabota zomi na mabale. | |
Exod | LinVB | 39:16 | Basali bikangeli bibale bya wolo mpe mitako mibale mya wolo, mpe bakangi mitako mina mibale o nsuka ibale ya libenga. | |
Exod | LinVB | 39:18 | bakangi mpe nsuka ibale ya malenda na bikangeli bibale ; bakangi mango na elamba ya mapeke ya efod epai ya liboso. | |
Exod | LinVB | 39:19 | Babakisi lisusu mitako mibale mya wolo, mpe bakangi myango na libenga epai ya efod. | |
Exod | LinVB | 39:20 | Basali mpe mitako mibale mya wolo, mpe bakangi myango o makamba ma efod, epai ya nse, penepene na mokaba mwa efod. | |
Exod | LinVB | 39:21 | Bakangi mitako mya libenga na mitako mya efod na nkamba elitami na nsinga ya kiusa ya longondo, mpo ’te ezala likolo lya mokaba, bongo libenga lilongwa na efod te, se lokola Yawe atindaki Mose. | |
Exod | LinVB | 39:23 | Nzela eye ezali o katikati lokola o elamba ya etumba, zongazonga na nzela ena basoni elamba esusu ekoki kopaswana te. | |
Exod | LinVB | 39:24 | Bakembisi monkoto na bilili bya malala, bisalemi na nsinga ya kiusa ya longondo, ya motane, ya moindo mpe ya malekani kitoko. | |
Exod | LinVB | 39:26 | Batii yango na likelemba ngengele yoko lilala lyoko, o nse ya monkoto mona, mpo ya kolata o ntango ya mosala, se lokola Yawe atindaki Mose. | |
Exod | LinVB | 39:29 | mikaba misonami na malekani kitoko, na kiusa ya longondo, ya motane, mpe ya moindo, se lokola Yawe atindaki Mose. | |
Exod | LinVB | 39:30 | Basali mpe fulele ya wolo, elembo ya bomikabi na Nzambe, mpe bakati wana nkoma eye : ‘Amikabi na Yawe’. | |
Exod | LinVB | 39:31 | Bakangi yango na nkamba ya kiusa ya longondo, mpe babaki yango o ngabuni epai ya liboso, se lokola Yawe atindaki Mose. | |
Exod | LinVB | 39:32 | Basilisi bongo misala minso mya Ndako esantu mpe mya Ema ya Likita ; bana ba Israel basali manso se lokola Yawe atindaki Mose. | |
Exod | LinVB | 39:33 | Bayeli Mose Ndako esantu, Ema ya Likita na biloko binso bya yango : mitako, bisingeli, mabasa, makonzi na makolo ; | |
Exod | LinVB | 39:37 | etemiseli ya mwinda ya wolo kitoko, na molongo mobimba mwa miinda mya yango, na biloko binso bitali mwinda, na mafuta mpo ya mwinda ; | |
Exod | LinVB | 39:38 | altare ya wolo, mafuta ma bopakoli, mpaka ya malasi na elamba mpo ya kosipa monoko mwa Ema ; | |
Exod | LinVB | 39:39 | altare ya mbengi na lopango la yango la mbengi, mabaya ma yango na biloko bisusu binso ; sani enene mpe ebonga ya yango ; | |
Exod | LinVB | 39:40 | bilamba bya lopango, makonzi na makolo ma lango mpe elamba ya kosipa monoko mwa lopango, nsinga na piké mpe biloko binso bitali Ndako esantu na Ema ya Likita : | |
Exod | LinVB | 39:41 | bilamba bya lokumu bya milulu o esika esantu, bilamba bisantu bya nganga Nzambe Arone, mpe bilamba bya bana ba ye mpo ya mosala mwa bonganga. | |
Chapter 40
Exod | LinVB | 40:4 | Yaka na meza mpe tanda biloko bya yango binso. Yaka mpe na etemiseli ya mwinda mpe bongisa miinda mya yango. | |
Exod | LinVB | 40:5 | Tia altare ya wolo, eye ya malasi, o boso bwa Sanduku ya Bondeko, mpe elamba elai o monoko mwa Ndako esantu. | |
Exod | LinVB | 40:9 | Kamata mafuta ma bopakoli mpe pakola Ndako esantu na biloko binso bisali o kati ; benisa yango na mpe biloko bya yango binso, bongo ndako ekosala esantu mpenza. | |
Exod | LinVB | 40:10 | Pakola altare ya kotumba mabonza na biloko binso bitali yango, benisa altare ekoma esantu mpenza. | |
Exod | LinVB | 40:12 | Na nsima benga Arone na bana ba ye penepene na monoko mwa Ema ya Likita, mpe sukola bango na mai. | |
Exod | LinVB | 40:13 | Latisa Arone bilamba bisantu, pakola ye mafuta mpe benisa ye mpo ’te asala mosala mwa bonganga. | |
Exod | LinVB | 40:15 | pakola bango mafuta lokola opakoli tata wa bango mpo ’te basala mosala mwa bonganga bwa ngai. Sala bongo mpo ’te bopakoli bwango bopesa bango bonganga bwa seko o mabota ma bango o bileko na bileko. » | |
Exod | LinVB | 40:17 | Bongo o mokolo mwa yambo mwa sanza ya yambo ya mobu mwa mibale batelemisi Ndako esantu. | |
Exod | LinVB | 40:18 | Mose atindi ’te batelemisa Ndako esantu : batii mabanga ma nse na bisingeli, babongisi mabaya mpo ya motondo mpe batelemisi makonzi. | |
Exod | LinVB | 40:20 | Na nsima Mose atii mabanga ma Mobeko o Sanduku, akangisi yango na bibende mpe abakisi ezipeli, elembo ya Bolimbisi masumu, likolo lya Sanduku. | |
Exod | LinVB | 40:21 | Akotisi Sanduku ya Bondeko o Ndako esantu, azipi yango na elamba mpo ya kobatela yango. Azipi bongo Sanduku ya Bondeko se lokola Yawe alakisaki Mose. | |
Exod | LinVB | 40:22 | Atii meza o Ema ya Likita, o mopanzi mwa Ndako esantu ; epai ya likolo, penepene na elamba elai. | |
Exod | LinVB | 40:24 | Atii etemiseli ya mwinda o Ema ya Likita, o boso bwa meza, o mopanzi mwa Ndako esantu epai ya Sudi ; | |
Exod | LinVB | 40:29 | Atii altare ya kotumba mabonza penepene na monoko mwa Ema ya Likita, ezali Ndako esantu, mpe o yango abonzi mabonza ma kotumba na mabonza ma bilei, se lokola Yawe atindaki ye. | |
Exod | LinVB | 40:30 | Atii sani kati ya Ema ya Likita mpe ya altare, mpe asopi mai mpo ya kopetola o kati : | |
Exod | LinVB | 40:32 | O ntango bayingeli o Ema ya Likita to babelemi na altare, bamipetola, se lokola Yawe atindaki Mose. | |
Exod | LinVB | 40:33 | Atongi lopango zongazonga na Ndako esantu mpe na altare, mpe atii elamba elai o monoko mwa lopango. Mose asukisi mosala mwa ye bobele bongo. | |
Exod | LinVB | 40:35 | Mose akokaki kokoto o Ndako ya Likita te, zambi limpata lisingi yango, mpe nkembo ya Yawe etondisi Ndako esantu. | |
Exod | LinVB | 40:36 | O mobembo mwa bango, ntango limpata lilimwi, bana ba Israel balongwi o esika ena, mpe bakei epai esusu. | |
Exod | LinVB | 40:37 | Soko limpata lilongwi te, bakobi mobembo mwa bango te ; bobele o mokolo limpata lilongwi, batamboli lisusu. | |