Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
Chapter 1
Job LinVB 1:1  Ezalaki o mokili mwa Us moto moko, nkombo ya ye Yob. Azalaki moto malamu mpe wa motema semba ; azalaki kobanga Nzambe mpe koboya mabe.
Job LinVB 1:2  Abotaki bana zomi, bana babali nsa­mbo, bana basi basato.
Job LinVB 1:3  Azalaki na nyama mingi : mpata nkoto nsa­mbo, kamela nkoto isato, ngombe nkoto yoko, mpunda nkama itano. Azalaki mpe na basaleli ebele mpenza ; ye moko nkumu monene aleki bato banso ba ekolo eye ya Esti.
Job LinVB 1:4  Bana ba ye babali bameseni kokutana o ndako ya moko moko mpo ya kolia limpati ; bazalaki mpe kobenga bandeko basi ba bango baya kolia mpe komele na bango esika yoko.
Job LinVB 1:5  Esilisi bango kolia limpati o ndako ya moto moko moko, Yob azalaki kobenga bango banso mpo ’te bamipetola ; mpe na nta ntongo azalaki kobonzela Nzambe libonza mpo ya moko moko wa bango, zambi azalaki kokanisa : « Mbele bana ba ngai basali lisumu mpe batuki Nza­mbe o ntei ya motema ! » Yob ameseni kosala se bongo.
Job LinVB 1:6  Mokolo moko banzelu ba Nza­mbe babimi o miso ma Mokonzi Nzambe, Satana azalaki o kati ya bango.
Job LinVB 1:7  Mokonzi alobi na Satana : « Outi wapi ? » Satana azongisi : « Na­uti kotambola mpe kolekaleka o mokili mobimba. »
Job LinVB 1:8  Mokonzi atuni Satana : « Bongo omonoki mosaleli wa ngai Yob ? O mokili mobimba moto moko aleki ye na bolamu mpe na bosembo te ; moto moko te azali kobanga Nzambe mpe kokima mabe lokola ye. »
Job LinVB 1:9  Kasi Satana azongisi : « Yob azali kotosa Nza­mbe mpamba te.
Job LinVB 1:10  Binso bizali na ye, ná ndako ná bilanga, yo moto ozingi byango na lopango. Obenisi misala mya ye minso, mpe esobe etondi na nyama ya ye.
Job LinVB 1:11  Kasi soko otomboli loboko la yo mpe obotoli ye ndambo ya biloko bizali na ye, ntembe te, akobetele yo mobondo o miso ma yo ! »
Job LinVB 1:12  Mokonzi alobi na Satana : « Sala na biloko bya ye lokola olingi, kasi oboma ye te. » Mpe Satana alongwi o miso ma Yawe.
Job LinVB 1:13  Mokolo bana babali na bana basi ba Yob bazalaki kolia mpe komele masanga o ndako ya motomolo wa bango,
Job LinVB 1:14  moto moko ayei koyebisa Yob : « Ngombe ya yo izalaki kosala mosala o bilanga, mpe mpu­nda ya yo izalaki kolia o esobe,
Job LinVB 1:15  ba-Sabeo bayei koyiba yango, babomi basali ba yo na likongo. Bobele ngai moko nabiki, yango wana nayei koyebisa yo. »
Job LinVB 1:16  Naino asilisi koloba te, moto mosusu ayi­ngeli o ndako, alobi : « Nkake ekwei, ezikisi mpata na bakengeli ba yo, mpe ebomi bango. Se ngai moko nabiki ; yango wana nayei koyebisa yo. »
Job LinVB 1:17  Naino asilisi maloba mpenza te, mosusu akoti o ndako, alobi : « Ba-Kaldea babimeli biso, ma­ngomba masato mobimba, babotoli kamela inso mpe babomi basali ba yo banso. Se ngai moko nabiki, yango wana nayei koyebisa yo. »
Job LinVB 1:18  Naino asilisi koloba te, moto wa banei ayei mpe alobi : « Ntango bana ba yo bazalaki kolia mpe komele vino o ndako ya motomolo wa bango,
Job LinVB 1:19  mompepe mokasi mouti o esobe, moningisi ndako mobimba : ndako ekwei mpe bana bakufi. Se ngai moko nabiki mpe nayei koyebisa yo. »
Job LinVB 1:20  Sikawa Yob atelemi, apasoli bilamba bya ye, akokoli motó ; ami­bwaki o nse, akitisi elongi o mabelé,
Job LinVB 1:21  mpe alobi : « Nabimaki bolumbu o libumu lya mama wa ngai ; nakozonga se bolumbu. Nzambe apesaki, Nza­mbe abotoli, tokumisa se nkombo ya Mokonzi ! »
Job LinVB 1:22  O kati ya mpasi iye inso, Yob asali lisumu te, atumoli Nzambe na liloba lyoko te.
Chapter 2
Job LinVB 2:1  Mokolo mosusu banzelu ba Nzambe babimi o miso ma Nzambe ; Satana mpe azalaki o kati ya bango.
Job LinVB 2:2  Nzambe alobi na Satana : « Outi wapi ? » Satana azongisi : « Nauti kotambola mpe kolekaleka o mokili. »
Job LinVB 2:3  Mpe Nzambe atuni Satana : « Bongo omonoki mosaleli wa ngai Yob ? O mokili mobimba moto mosusu lokola ye azali te : moto malamu mpe wa motema bosembo, moto azali kobanga Nzambe mpe kokima masumu ; azali na molende mingi. Osengeki ngai se mpamba mpenza ’te nabotolo biloko bya ye ! »
Job LinVB 2:4  Satana azongisi : « Nzoto ezali eloko enene ! Moto akoki kotika biloko binso bizali na ye mpo ya kobikisa nzoto.
Job LinVB 2:5  Tombola se loboko, tindela ye mpasi o nzoto, okomono ’te akotombela yo bobe o miso ma yo. »
Job LinVB 2:6  Nzambe alobi na Satana : « Likambo te, sala na ye lokola olingi, kasi oboma ye te. »
Job LinVB 2:7  Mpe Satana alongwi o miso ma Yawe. Abelisi Yob makwanza mabe o nzoto mobimba, banda motó tee makolo.
Job LinVB 2:8  Yob akamati eteni ya mbeki ebolani, akwanyi na yango nzoto mpe akei kofanda o kati ya mputulu.
Job LinVB 2:9  Sikawa mwasi wa ye abandi koswanisa ye, alobi : « Naino olembi te ? Olingi bobele Nzambe wa yo ? Malamu otombela ye bobe mpe okufa ! »
Job LinVB 2:10  Yob azongisi : « Olobi lokola mwasi zoba ; soko toya­mbi malamu manso Nzambe akokabelaka biso, mpo nini toboya koyamba mpasi ? » O kati ya mpasi iye inso, Yob alobi eloko yoko te.
Job LinVB 2:11  Baninga basato ba Yob bayoki nsango ya mabe manso makweli ye. Balongwi o mboka ya bango : Elifas, moto wa Tema, Bildad, moto wa Sua, mpe Sofar, moto wa Naamat. Bayokani ’te bakende kotala mpe kobondo ye.
Job LinVB 2:12  Ezali bango naino mosika, batali ye kasi bayebi ye lisusu te. Bongo babandi kolela mingi ; bapasoli bilamba bya bango mpe bamitii mputulu o motó.
Job LinVB 2:13  Bafandi o mabelé, penepene na ye ; batikali wana mikolo nsambo butu moi. Moto moko alobi liloba te, zambi bamoni ’te mpasi eleki.
Chapter 3
Job LinVB 3:1  Na nsima Yob abandi koloba mpe kotombela bobe na mokolo babotaki ye
Job LinVB 3:3  Mawa na mokolo babotaki ngai mpe na butu bona moto alobaki : « Mama akweli zemi lya mwana mobali ! »
Job LinVB 3:4  Mokolo mona mobongwana molili, o likolo Nzambe atanga mwango te, moi motanela mwango te !
Job LinVB 3:5  Molili mwa mboka ya bawa mokanga mwango, limpata liindo lizipa mwango, mwese motika kongengele mwango !
Job LinVB 3:6  Molili molia mokolo mona, mobima o molongo mwa mikolo mya mobu te, motangema mpe o kati ya mikolo mya sanza te !
Job LinVB 3:7  O butu bona moto moko ábotama te, migango mya esengo miyokana te !
Job LinVB 3:8  Baye bayini moi mpe bakoki kolamusa Elima batombela bobe na butu bona !
Job LinVB 3:9  Minzoto mya ntongo ena mizipama mpo ’te butu bona bozila moi se mpamba mpe bomono botani bwa ntongo te !
Job LinVB 3:10  Zambi butu bona bokangaki libumu lya mama te, mpo ’te namono mpasi ya mokili na miso te.
Job LinVB 3:11  Mpo nini nakufaki te o kati ya libumu lya mama ? To nakufaki noki te ntango nabimaki o libumu lya ye ?
Job LinVB 3:12  Mpo nini bayambaki ngai o bibelo ? Mpo nini banungisaki ngai mabéle ?
Job LinVB 3:13  Mbele nalalaki sikawa mpongi ya seko o esika ya kimia,
Job LinVB 3:14  esika yoko na bakonzi banene mpe na bankumu, baye bamitongelaki malita ma nkembo ;
Job LinVB 3:15  esika yoko na bakonzi bazalaki na wolo mingi mpe batondisi malita ma bango na palata.
Job LinVB 3:16  Malamu soko nakufaki o kati ya libumu lya mama, lokola bana bake bamonoki moi mokolo moko te.
Job LinVB 3:17  O esika ena bato babe bakotika makeléle, mpe baye balembi na mosala bakopema.
Job LinVB 3:18  Banso bakoti o boloko bakomi kopema lokola, bakoyoka makeléle ma bakengeli lisusu te.
Job LinVB 3:19  Wana bato banene na bato bake bazali se lolenge loko, moombo akangemi na mibeko mya nkolo wa ye lisusu te.
Job LinVB 3:20  Mpo nini moto wa mawa akobotama ? Mpo nini kopesa bomoi na bato batondi na mawa o motema ?
Job LinVB 3:21  Baye baluli se liwa boluli, kasi liwa likoya te, balingi lyango lokola eloko ya motuya monene.
Job LinVB 3:22  Bakosepela mingi mokolo bakomono libulu, bakoyoka esengo mokolo bakokoto o lilita.
Job LinVB 3:23  Mpo nini bakopesa bomoi na moto amoni nzela ya ye te, oyo Nzambemei akangi o lopango ?
Job LinVB 3:24  Mikolo minso natondi na mai o miso lokola mai makotiyolaka, nakotika kolela te.
Job LinVB 3:25  Mpasi enene nazalaki kobanga ekweli ngai, makambo ma nsomo nalingaki te mayeli ngai.
Job LinVB 3:26  Nazali kopema lisusu malamu te, nazali kimia te, minyoko mizali koyela ngai ntango inso.
Chapter 4
Job LinVB 4:2  Soko balobi na yo, okondima ? Nani ndakoki kokanga monoko ?
Job LinVB 4:3  Tala, yo moko ozalaki koteya bato ebele, oyebaki kolendisa baye balembi.
Job LinVB 4:4  Na maloba ma yo otelemisaki baye bakwei, opesaki makasi na baye bazalaki kolenge.
Job LinVB 4:5  Sikawa, awa makambo makweli yo, okomi kolembe, mpasi ekangi yo, mayele mabulungani !
Job LinVB 4:6  Boyambi bwa yo bokopesa yo elikya te ? Ezalela elamu ya yo ekolendisa yo te ?
Job LinVB 4:7  Kanisa malamu : Moto asali mabe te, akoki kobungama, solo ? Omono wapi bato ba bosembo balimwi seko ?
Job LinVB 4:8  Ngai mpenza nakomonoko boye : Baye bakosalaka mabe mpe baye bakoyokisaka baninga mpasi, bakosuka na mpasi.
Job LinVB 4:9  Soko Nzambe atindeli bango mpema ya nkanda, bawei, soko abimisi yango o zolo, basileli.
Job LinVB 4:10  Ata bagangi lokola nkosi, mpe baleli lokola nyama ya zamba, bakosuka lokola mino ma mwana nkosi makobukanaka.
Job LinVB 4:11  Nkosi ekokufa zambi ezangi nyama, bana ba yango bakopalangana.
Job LinVB 4:12  Moto moko ayebisaki ngai na bonkutu, nayokaki mwa maloba ma ye na matoi.
Job LinVB 4:13  Na butu, bakolotoko ndoto, ntango mpongi ekokangaka bato makasi,
Job LinVB 4:14  na mbalakaka nayoki nsomo enene, nzoto mobimba ebandi kolenge.
Job LinVB 4:15  Ezalaki lokola bapemeli ngai o elongi, yango etelemisi nsuki ya ngai o motó.
Job LinVB 4:16  Atelemi wana… kasi nayebi ye te, kasi miso mazalaki komono lokola elilingi. Natikali nye ; na nsima nayoki lolaka lotuni :
Job LinVB 4:17  « Nani azali na bosembo o miso ma Nzambe ? Nani akoki kozala peto o miso ma Mozalisi ?
Job LinVB 4:18  Ata na basaleli ba ye Nzambe akotiaka ntembe, zambi banzelu ba ye bakoki mpe kobunga.
Job LinVB 4:19  Bongo bato bafandi o ndako ya mabelé, iye itongami likolo lya mputulu, bakoleka nde ye ? Bakonyatema lokola monsili !
Job LinVB 4:20  Na ntongo bazali na bomoi, na mpokwa bakufi, balimwi seko mpe moto moko akanisi bango lisusu te.
Job LinVB 4:21  Nsinga ya biema bya bango esili ekatani, bakufi zambi bazangi bwanya. »
Chapter 5
Job LinVB 5:1  Ata obengi bato, nani akoyanola yo ? Okobenga mosantu nani mpo ’te olonga ?
Job LinVB 5:2  Ya solo, zuwa ekoboma moto azangi mayele mpe nkanda ekoboma moto wa bolema.
Job LinVB 5:3  Nasili namoni : moto azangi mayele akoki kozwa bolamu, kasi na mbalakaka azali lisusu te.
Job LinVB 5:4  Moto moko asalisi bana ba ye te, o esambi bakiti, mpo bazwi molobeli te.
Job LinVB 5:5  Moninga akufi na nzala alei mbuma ya bilanga bya ye, babotoli mbuma abombaki o lopango la nzube, mpe bato baluki yango, babotoli nkita ya ye.
Job LinVB 5:6  Solo, mabe ma mokili makoutaka o mabelé te mpe makambo ma mpasi makokolaka o nse ya mabelé te.
Job LinVB 5:7  Makambo ma mpasi makoutaka se epai ya moto, lokola egondo ekolukaka kopimbwa o likolo mpenza.
Job LinVB 5:8  Ngai oyo, ndenabondeli se Nzambe, ndenayebisi ye likambo lya ngai.
Job LinVB 5:9  Ye mpenza asalaki misala minene, moto moko akoki kotanga makamwisi ma ye te.
Job LinVB 5:10  Ye moto akonokisaka mbula o mabelé, mpe akopesaka bilanga mai.
Job LinVB 5:11  Ye moto akotombolaka bato bakiti o nse, akobikisaka baye bazali na mpasi.
Job LinVB 5:12  Akobebisaka mikano mya bato ba mayele mabe, mpo ’te makambo ma bango matambola malamu soki te.
Job LinVB 5:13  Ye moto akosukisaka bato ba mayele na mabe ma bango moko, mpe akobebisaka likambo bato ba lokuta bakani kosala.
Job LinVB 5:14  Na moi mpenza bakangemi na molili, o midi ya moi bazali kotatabana lokola na butu.
Job LinVB 5:15  Kasi akobikisa mobola mpo azoka na mopanga te, akolongola ye o mbanga mpe o maboko ma moto monene.
Job LinVB 5:16  Mobola akozala na elikya ’te akobika, zambi akokangisa monoko mwa moto wa songisongi.
Job LinVB 5:17  Solo, esengo na moto oyo Nzambe apaleli ye ! Oboya likebisi lya Nzambe wa bokasi te !
Job LinVB 5:18  Oyo azokisi, akokanga mpe mpota, oyo abeti, akobikisa mpe.
Job LinVB 5:19  Mbala motoba akobikisa yo o makambo ma mpasi, mpe mbala ya nsambo mpasi ekokanga yo soki te.
Job LinVB 5:20  O eleko ya nzala akobikisa yo o liwa, o ntango ya etumba mopanga mokobete yo te.
Job LinVB 5:21  Maloba mabe ma bato makosala yo eloko te, okobanga likambo lyoko libe te.
Job LinVB 5:22  Likama linene, nzala makasi : okotala yango mpamba, ata nyama ya zamba, okobanga yango te.
Job LinVB 5:23  Mabanga ma elanga makotiela yo libaku te, mpe okoyokana na nyama ya esobe.
Job LinVB 5:24  Okofanda na boboto o ema ya yo, okotanga etonga ya yo, mpata yoko ekozanga te.
Job LinVB 5:25  Okomono ’te okomi na bankoko baike, bana bakoli lokola matiti ma esobe.
Job LinVB 5:26  Mokolo bakokunda yo, okosila kokola mingi, lokola mbuma ya mampa o ntango ya bokati.
Job LinVB 5:27  Tosili tomoni makambo mana manso, mazali ma solo, ndima mango mpo ’te obika na mayele mana.
Chapter 6
Job LinVB 6:2  Malamu, bameka bozito bwa mawa ma ngai, batia malozi ma ngai o emekeli.
Job LinVB 6:3  Mawa ma ngai maleki zelo ya mbu na boike, yango wana nakomi kolobaloba bobele bongo.
Job LinVB 6:4  Nzambe abeteli ngai makula, nzoto ya ngai ebebi na ngenge ya mango, malozi ma Nzambe mayeli ngai etumba.
Job LinVB 6:5  Mpunda ekoki nde kolela o esobe etondi na matiti ? To ngombe ekoki kolela soko ezali na matiti ma kolia ?
Job LinVB 6:6  Eloko ezangi bokenzu, bakoliaka yango na mongwa te ? Bakoyokaka nde mpembe ya liki elengi ?
Job LinVB 6:7  Nalingi biloko bina bileka o monoko mwa ngai te, nayoki byango mpi.
Job LinVB 6:8  A, Nzambe ayoka losambo la ngai, akabela ngai eloko eye nazali kotia motema.
Job LinVB 6:9  Nzambe ándima konyatanyata ngai, átombola loboko la ye mpe áboma ngai !
Job LinVB 6:10  Yango ekokitisa ngai motema, mpe ekoyokisa ngai esengo o kati ya mpasi, mpo nabosani liloba lyoko lya Mosantu te.
Job LinVB 6:11  Ngai nde nani mpo ’te natia elikya na bokasi bwa ngai ? Awa nakosuka bongo, mpo nini nakanga motema ?
Job LinVB 6:12  Nzoto ya ngai ezali nde libanga ? Misuni mya nzoto mizali nde bibende ?
Job LinVB 6:13  Nazali kozila lisalisi se mpamba, makasi masileli ngai nye !
Job LinVB 6:14  Oyo aboyi koyokela moninga mawa aboyi mpe Nzambe wa bokasi bonso.
Job LinVB 6:15  Bandeko, baye natiaki motema, bakosi ngai, lokola moluka mosila mai.
Job LinVB 6:16  Ntango mbula ya matandala ekokoma lisusu mai, ntango mai makangemi makonyangwa, miluka mikotonda.
Job LinVB 6:17  O ntango ya elanga, miluka mikokauka, mikosila mai o eleko ya moi makasi.
Job LinVB 6:18  Bato ba mobembo, soko balongwi o nzela mpe bayingeli o eliki, bakobunga kuna.
Job LinVB 6:19  Lokola bato bauti o Tema bakotalaka nzela, to baye bauti o Saba bakotiaka yango mitema,
Job LinVB 6:20  ntango bakomi wana, babulungani, mpo batiaki elikya se mpamba.
Job LinVB 6:21  Bino se bongo, bozali mpamba o miso ma ngai, zambi bomonoki mpasi ya ngai mpe bobangaki.
Job LinVB 6:22  Mokolo nini nalobaki na bino : « Bopesa ngai eloko, bobonzela ngai ndambo ya biloko bya bino ;
Job LinVB 6:23  bobikisa ngai o maboko ma monguna, bolongola ngai o maboko ma banyokoli ? »
Job LinVB 6:24  Soko boyebi koteya ngai, nakoloba lisusu te, soko nasalaki mabe, bolakisa ngai.
Job LinVB 6:25  Maloba ma solo makoki kozokisa motema te, kasi maloba ma bino ma bopaleli ngai mazangi ntina.
Job LinVB 6:26  Bolingi kopalela ngai mpo ya makambo nalobaki ? Maloba ma moto abwaki elikya, botali mango se mpamba ?
Job LinVB 6:27  Bolingi nde kobete zeke likolo lya mwana etike, to koteke moninga lokola eloko mpamba ?
Job LinVB 6:28  Nabondeli bino, boboya kotala ngai te ! O miso ma bino nakoki kobuka lokuta te.
Job LinVB 6:29  Botika kosambisa ngai, bokata likambo lya ngai na bosembo, bokomono ’te nasali mabe te.
Job LinVB 6:30  Nazali koloba mabe, solo ? Nayebi lisusu malamu na mabe te ?
Chapter 7
Job LinVB 7:1  Bomoi bwa moto awa o nse, bomoi bwa mongamba, mikolo mya ye mizali mya moto bakofutaka mokolo na mokolo.
Job LinVB 7:2  Lokola moombo akolukaka malili o nse ya nzete, mpe mosali akozilaka mokolo mwa lifuta,
Job LinVB 7:3  nakolekisaka mikolo mya ngai se mpamba, mpe nakomitungisaka na butu.
Job LinVB 7:4  Soko nakei kolala, nakomitunaka : « Ntongo etani naino te ? » mpe na ntongo : « Butu boindi naino te ? » mpe kin’o ntongo nakozala motema likolo.
Job LinVB 7:5  Nzoto ya ngai etondi na nkusu mpe na makwanza, lomposo la nzoto lopaswani, lokomi na mayina.
Job LinVB 7:6  Mikolo mya ngai mikei, mileki mbangu, nakomi lokola ntonga ya mosoni bilamba esili nsinga.
Job LinVB 7:7  Nzambe, kanisa ’te bomoi bwa ngai bozali mpema mpamba, nazali koyoka esengo lisusu te.
Job LinVB 7:8  Bato bazali koluka ngai, bakomono ngai lisusu te ; miso ma yo makomono ngai te.
Job LinVB 7:9  Moto akei o mboka ya bawa, akei bobele ; lokola limpata lilimwi mpe libungi.
Job LinVB 7:10  Akozonga lisusu o ndako ya ye te, bandeko ba ye bakomono ye lisusu te.
Job LinVB 7:11  Yango wana nakoki kokanga monoko lisusu te, nakoloba, mpo nazali kotatabana, nakomilela mpo nayoki motema mpasi mpenza.
Job LinVB 7:12  Nazali nde Mbu enene to ebuki ya mbisi mpo ’te otia mokengeli akengele ngai ?
Job LinVB 7:13  Soko namilobeli : « O mbeto nakopema malamu, mpongi ya ngai ekobondo ngai »,
Job LinVB 7:14  obangisi ngai na ndoto ebe mpe na mamoni ma nsomo.
Job LinVB 7:15  O kati ya motema nayoki mposa ya komiboma na nsinga, nakomi koboya nzoto ya ngai mpe kolula liwa.
Job LinVB 7:16  Nalingi nakufa, nakoumela seko te, tika ngai nye, mikolo mizali kokende lokola mpema.
Job LinVB 7:17  Moto nde nani mpo ’te opangana na ye bongo, mpo ’te okengele ye bipai binso,
Job LinVB 7:18  mpo ’te otunaka ye ntongo inso mpe omekaka ye motema ntango inso ?
Job LinVB 7:19  Mokolo nini okotika kotala ngai, mpe okopesa ngai ntango napema ?
Job LinVB 7:20  Ata nasumuki, yango esali yo nini ? Yo, monongi wa bato ? Mpo nini ososoli bobele ngai ? Nazali nde kotungisa yo, solo ?
Job LinVB 7:21  Oyebi kokanga motema na matumoli ma ngai te ? Oyebi kolimbisa mabe ma ngai te ? Etikali moke nalala o kati ya mabelé ; okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te.
Chapter 8
Job LinVB 8:2  Mikolo boni okoloba naino bongo ? Maloba ma yo mazangi ntina mpenza !
Job LinVB 8:3  Bongo Nzambe akoki nde kozanga bosembo ? Mokonzi wa bokasi akoki nde kobongola mibeko ?
Job LinVB 8:4  Bana ba yo basalaki masumu o miso ma ye, bazwi etumbu mpo ya mabe ma bango.
Job LinVB 8:5  Soko okoluka Nzambe na motema moko, soko ozali kobondela Mokonzi wa bokasi,
Job LinVB 8:6  soko ozali moto malamu mpe wa bosembo, ye akokengele yo malamu mpenza, mpe akopesa yo binso bikoki na yo.
Job LinVB 8:7  Biye ozwaki liboso bizali bike, biye okozwa nsima bikoleka na boike.
Job LinVB 8:8  Tuna ata bankoko ba kala, luka kozwa mayele epai ya bango.
Job LinVB 8:9  Biso bato tobotami se lobi, toyebi eloko te, bomoi bwa biso awa o nse bozali koleka lokola elilingi.
Job LinVB 8:10  Kasi na maloba ma bango bakoteya yo, mpo ya maye makweli bango, bakoloba boye :
Job LinVB 8:11  « Nsoló ekokolaka o esika potopoto ezali te ? Nkekele ekokolaka o esika mai mazali te ?
Job LinVB 8:12  Soki te, ata ekomeli te mpe bakati yango te, ekokauka liboso lya matiti manso.
Job LinVB 8:13  Baye babosani Nzambe bakosuka se bongo, moto akopesa Nzambe mokongo, akozanga elikya.
Job LinVB 8:14  Akotika kobete bontolo, mpo azali se makasi lokola nsinga ya limpulututu.
Job LinVB 8:15  Ata atii motema na ndako ya ye, ekokweya, ata alingi kobombama wana, ndako ekobukana.
Job LinVB 8:16  Azali lokola nzete ebesu o moi makasi, eye etandi bitapi o lopango mobimba.
Job LinVB 8:17  Minsisa mikei o mabelé makasi, mikoti mpe o kati ya mabanga ;
Job LinVB 8:18  kasi soko bapikoli yango, moto moko akoyeba lisusu te esika ezalaki.
Job LinVB 8:19  Nzete ezali kopolo o nzela, nzete isusu ikobima o esika ya yango.
Job LinVB 8:20  Yeba ’te Nzambe akoboyaka moto wa bosembo te, akosalisa mpe bato babe o makambo ma bango te.
Job LinVB 8:21  Akosala ’te okoka koseke lisusu mpe koyemba na nsai.
Job LinVB 8:22  Banguna ba yo bakoyoka nsoni, mpe biema bya bato babe bikolimwa. »
Chapter 9
Job LinVB 9:2  Ya solo, nayebi malamu ’te ezali bongo, moto akoki kolonga Nzambe na likambo ?
Job LinVB 9:3  Yo moto omeki kowela ntembe na ye, okotuna ye mituna nkoto, okozwa eyano ata yoko te.
Job LinVB 9:4  Moto azala na bwanya mpe na bokasi ata boni, nani akozwa etumbu te soko amekani na ye ?
Job LinVB 9:5  Ayebi kolongola ngomba mpe kotia yango o epai esusu ; akoki kokweisa yango soko ayoki nkanda.
Job LinVB 9:6  Soko atindiki mokili, makonzi ma mwango makoningana.
Job LinVB 9:7  Moi mokobima te soko ye alingi te, minzoto mikongenge te, soko ye azipi myango.
Job LinVB 9:8  Ye moko akeli etando ya likolo, mpe atii makolo likolo lya mbonge ya mai,
Job LinVB 9:9  Akeli ‘Motongolongo mwa nzoku’, ‘Motó mwa Ekange’, ‘Bangondo nsambo’ mpe minzoto mya Sudi.
Job LinVB 9:10  Akeli biloko binene biso bato toyebi te, na bikelamo ebele ya kotanga te, bikokamwisa bato.
Job LinVB 9:11  Soko aleki, nakomono ye te, soko abelemi na ngai, bakoyeba ye te.
Job LinVB 9:12  Soko alingi kobotolo eloko, nani akopekisa ye ? mpe nani akoloba : Osali nini ?
Job LinVB 9:13  Soko ayoki nkanda, moto moko akoki kopekisa ye te, bilimo binso bisengeli kokumbamela ye.
Job LinVB 9:14  Bongo ngai nalingi komilongisa, nakozwa mayele ma kokitisa ye epai wapi ?
Job LinVB 9:15  Ata nasali mabe te, nakosamba se mpamba ; ye moko mosambisi, nakoki se kobondela ye.
Job LinVB 9:16  Ata andimi koya soko nabengi ye, nayebi te soko akondima maloba ma ngai.
Job LinVB 9:17  Ye moto akonyata ngai mpo ya likambo lya mpamba, akozokisa ngai mpota ntango inso, ntina te.
Job LinVB 9:18  Akotikela ngai ata ntango ya kopema te, mpe akoyokisa ngai motema mpasi.
Job LinVB 9:19  Nabunda na ye ? Wapi ! Aleki ngai na bokasi. Nafunda ye ? Nani akosambisa ye ?
Job LinVB 9:20  Ata nasali se malamu, akokitisa ngai ; ata nasali mabe te, nakolonga te.
Job LinVB 9:21  Nayebi te soko ya solo nazali na likambo te ; ata bongo nayoki mokili moye mpi.
Job LinVB 9:22  Solo, nasili nalobi : Akoboma bato banso, ná moto malamu ná moto wa masumu.
Job LinVB 9:23  Soko likama likweli na mbalakaka baye bazali na likambo te, akopangana na mpasi ya bango te.
Job LinVB 9:24  Soko ekolo yoko ekomi o maboko ma moto mobe, akozipa miso ma bazuzi na elamba. Soki ye te, nani akoki kosala bongo ?
Job LinVB 9:25  Mikolo mya ngai mizali koleka noki, lokola baye bakokimaka mbangu o momekano, mikolimwa, mpe nakomono bolamu te,
Job LinVB 9:26  lokola mwa bwato bozali kotiyola o ebale, mbangu lokola mpongo epimbwi mpo ekanga nyama.
Job LinVB 9:27  Soko nakani kobosana mpasi ya ngai mpe kofungola elongi ya ngai mpo nasepela,
Job LinVB 9:28  nayoki nsomo na bokanisi malozi manso, mpo nayebi ’te otali ngai bo moto wa makambo.
Job LinVB 9:29  Bongo, lokola omoni ngai nazali na makambo, mpo nini nalembisa nzoto mpamba ?
Job LinVB 9:30  Ata nasukoli nzoto na mai ma matandala, ata nasukoli maboko na sabuni,
Job LinVB 9:31  yo moto okobwaka ngai lisusu o potopoto, bilamba bya ngai moko bikolinga ngai lisusu te.
Job LinVB 9:32  Soko azalaki moto lokola ngai, mbele nakokaki koyanola mpe kosamba na ye.
Job LinVB 9:33  Zuzi oyo akoki kosambisa biso babale mpe kokata likambo lya biso, azali te !
Job LinVB 9:34  Oyo akondimisa Nzambe ’te abwaka fimbo ya ye, azali te ; oyo akokimisa nsomo ya ye mpe te,
Job LinVB 9:35  ngai nakobanga koloba te, zambi nayebi likambo liye te.
Chapter 10
Job LinVB 10:1  Bomoi bwa ngai boyokisi ngai mpi, nakotika te kolela mpasi ya ngai, nakosakola makambo ma ngai na motema bololo.
Job LinVB 10:2  Nakoloba na Nzambe : Okitisa ngai te, oyebisa ngai mpo nini osali ngai bongo.
Job LinVB 10:3  Oyoki esengo awa olakisi ngai motema libanga ? Oboyi nde ekelamo okelaki na maboko ma yo ? Olingi kolongisa bato babe o makambo ma bango ?
Job LinVB 10:4  Ozali nde na miso lokola bato ? Okotalaka makambo se lokola bato ?
Job LinVB 10:5  Okokufa nde lokola bato bakokufaka ? Mpe okoumelaka lokola bato, mwa mibu ?
Job LinVB 10:6  Bongo, mpo nini ozali kososolo mabe ma ngai, mpe olingi koyeba masumu ma ngai ?
Job LinVB 10:7  Oyebi malamu ’te nazali na likambo te, mpe moto moko te akoki kobikisa ngai o maboko ma yo.
Job LinVB 10:8  Yo moto oyemaki ngai mpe okelaki ngai na maboko ma yo, sikawa oboyi ngai mpe olingi koboma ngai !
Job LinVB 10:9  Kanisa ’te okelaki ngai na mabelé libazi, mpe okozongisa ngai lisusu o mabelé.
Job LinVB 10:10  Okelaki ngai na mai mpembe lokola mabéle, okaukisaki mango makangema lokola mbika ilambami ;
Job LinVB 10:11  na nsima opesi ngai nzoto ezali na nsuni, lomposo, minkuwa na minsisa.
Job LinVB 10:12  Yo moko opesi ngai bomoi, na bokasi bwa yo obateli mpema ya ngai.
Job LinVB 10:13  Kasi, o kati ya motema obombelaki ngai likambo, nayebi malamu ’te ozalaki na makanisi masusu :
Job LinVB 10:14  olingaki kotala malamu soko nakosala mabe, mpe kolimbisa ngai lisumu lyoko te.
Job LinVB 10:15  Bongo soko nasali mabe solo, mawa na ngai ! Soko nasali mabe te, nakoki kotombola motó te, zambi nayoki nsoni mpo ya mpasi eleki.
Job LinVB 10:16  Soko nameki koteleme, okokanga ngai lokola nkosi, mpe okokoba kolakisa bokasi bwa yo.
Job LinVB 10:17  Okofunda ngai na makambo masusu, mpe okolakisa ngai bobele nkanda enene ya yo ; na nguya ya sika okobimela ngai.
Job LinVB 10:18  Mpo nini obimisi ngai o libumu lya mama ? Mbele nakufaki liboso ’te moto moko amono ngai.
Job LinVB 10:19  Mbele sikawa nazalaki te, mbele batiaki ngai o lilita ntango nabimaki o libumu.
Job LinVB 10:20  Ngai e ! Mikolo mya ngai mizali se moke ; bongo tika ngai, nayoka mwa esengo,
Job LinVB 10:21  liboso ’te nakende o esika bakozongaka lisusu te, o mboka ya bawa mpe ya molili tuu,
Job LinVB 10:22  esika ezali molili mpe mobulu, esika mwinda moulani na molili makasi.
Chapter 11
Job LinVB 11:2  Bongo bápesa esopa oyo eyano te ? Okanisi ’te okolonga mpo ya maloba ma yo ebele ?
Job LinVB 11:3  Bongo tokanga monoko mpo ya bilobaloba bya yo ? Tozongisela yo liloba te, awa ozali koseke biso ?
Job LinVB 11:4  Olobaki : « Ngai nalobi se maloba ma solo, o miso ma yo nazali na likambo lyoko te ! »
Job LinVB 11:5  Soko Nzambe alingaki koloba mpe kofungola monoko mpo ’te ayanola yo,
Job LinVB 11:6  soko ateyaki yo mibombamo mya bwanya bwa ye, bwanya boye boleki mayele ma bato, mbele mposa ya yo ya kozongisela ye esilaki.
Job LinVB 11:7  Okanisi ’te oyebi makanisi ma Nzambe manso mpe makambo manso ma Mokonzi wa bokasi bonso ?
Job LinVB 11:8  Aleki likolo mosika ! Bongo okosala nini ? Aleki mboka ya bawa na bozindo ! Bongo okoyeba eloko nini ?
Job LinVB 11:9  Mayele ma ye maleki mokili na bolai, maleki mpe mai manso ma mbu na bonene.
Job LinVB 11:10  Soko Nzambe ayei kokanga yo, mpe kosambisa yo, nani akopekisa ye ?
Job LinVB 11:11  Ye ayebi banani bazali na bosembo te, ayebi mabe ma bato, kasi akebi na yango te.
Job LinVB 11:12  Moto zoba akoki koloba maloba ma bwanya te, lokola mpunda ya zamba ekobotaka mpunda ya mboka te.
Job LinVB 11:13  Bongo yo, bongola makanisi ma yo, mpe tandela Nzambe maboko ma yo,
Job LinVB 11:14  bwaka mosika mabe ma yo manso, boya makambo manso mazangi bosembo.
Job LinVB 11:15  Bongo okokoka kolakisa bato elongi, okozala na mpiko mpe okobanga lisusu te.
Job LinVB 11:16  Okokanisa mpasi ya yo lisusu te, mpe okobosana yango noki lokola mai mazali koleka.
Job LinVB 11:17  Bomoi bokongenge lokola moi mwa midi, molili mokobongwana botani bwa ntongo.
Job LinVB 11:18  Okoyeba ’te elikya ezali naino solo, ata obulungani ndolali mpongi malamu.
Job LinVB 11:19  Okopema mpe moto moko akotungisa yo te, mpe bato baike bakoluka bondeko na yo.
Job LinVB 11:20  Kasi miso ma bato babe makomono se molili, bakomono esika ya kozwa libiki te ; elikya ya bango, se liwa.
Chapter 12
Job LinVB 12:2  Bolobi nde o nkombo ya bato banso ? Soki bino te, bwanya bonso bokosila ?
Job LinVB 12:3  Ngai mpe nazali na mayele lokola bino, boleki ngai te. Nani abungi makambo bolobaki ?
Job LinVB 12:4  Nzokande baninga ba ngai bazali koseke ngai, zambi nabeleli Nzambe mpo ’te ayanola ngai ; bazali koseke moto malamu mpe wa bosembo.
Job LinVB 12:5  Bato ba bomengo bakokinolaka bato ba mawa, bakokweisaka moninga azali kotatabana.
Job LinVB 12:6  Kasi bayibi bafandi na boboto o biema bya bango, bakoki kotumola Nzambe, bakozwa likambo te, bakotalaka Nzambe lokola nkisi ya bango !
Job LinVB 12:7  Soko olingi, tuna bibwele, biyebisa yo, tuna ndeke ya likolo, ilimbolela yo.
Job LinVB 12:8  Nyama ikolandaka o mabelé iteya yo, ata mbisi ya mai iyebisa yo mpo yango.
Job LinVB 12:9  O kati ya bikelamo bina binso nani abungi ’te Nzambe asali bongo !
Job LinVB 12:10  Bomoi bonso bozali o maboko ma ye, azali nkolo wa bato banso.
Job LinVB 12:11  Bakolobaka ’te matoi makosepelaka maloba ma bato, lokola edada ekosepelaka elengi ya bilei.
Job LinVB 12:12  Bakolobaka ’te bwanya bokozwama epai ya bakolo mpe mayele mazali na baye bakomi babange.
Job LinVB 12:13  Nzokande bwanya na bokasi bozali epai ya Nzambe, ye azali na mayele mpe na malako malamu.
Job LinVB 12:14  Ndako ye abuki, ekotongama lisusu te, moto akotisi o boloko, akobima wana lisusu te !
Job LinVB 12:15  Soko akangi mbula, biloko binso bikokufa, soko anokisi mbula makasi, mokili mokobeba.
Job LinVB 12:16  Akosala mosala mwa ye na bwanya mpe na bokasi, mobungami ná mobungisi bazali o maboko ma ye.
Job LinVB 12:17  Akobebisa mayele ma bato ba mayele, mpe akokomisa bazuzi bazoba.
Job LinVB 12:18  Akolongola mikumba bakonzi bamemisi, mpe akokangela bango mokaba o loketo.
Job LinVB 12:19  Akobungisa mayele ma banganga Nzambe, akolongola bakonzi o ngwende ya bango.
Job LinVB 12:20  Akokangisa monoko mwa bato bayebi koloba malamu, akobotolo babange mayele ma kosambisa bato.
Job LinVB 12:21  Akosambwisa bankumu ba mboka, akosilisa bokasi bwa bilombe.
Job LinVB 12:22  Akolongola molili o bisika bya bozindo. akopelisa mwinda o mboka ya molili.
Job LinVB 12:23  Akotombola ekolo, na nsima akokitisa yango ; akopanza bikolo, na nsima akosangisa byango lisusu.
Job LinVB 12:24  Akobulinginya mayele ma bakonzi ba bikolo, bakobunga lokola bakobungaka o eliki ezangi nzela,
Job LinVB 12:25  bakotambola o molili, bakomono mwinda te, bakobunga nzela lokola momeli masanga akobungaka.
Chapter 13
Job LinVB 13:1  Solo, namoni makambo mana manso na miso, nayoki mango na matoi mpe nayebi ntina.
Job LinVB 13:2  Makambo bino boyebi, ngai mpe nayebi mango. Boleki ngai na mayele te.
Job LinVB 13:3  Kasi ngai nalingi koloba na Nzambe wa bokasi, nalingi komilongisa o miso ma ye.
Job LinVB 13:4  Kasi bino bozali bato ba lokuta, bino banso boyebi kobikisa soki moke te !
Job LinVB 13:5  Nani akokangisa bino monoko seko ? Bozwa bongo mwa mayele makoki na bino !
Job LinVB 13:6  Nabondeli bino, boyoka ndenge nakosamba mpe nakomeka komilongisa, botia matoi !
Job LinVB 13:7  Mpo ya kolongisa Nzambe bolingi nde kokosa mpe koloba maloba ma lokuta ?
Job LinVB 13:8  Bolingi kosalisa ye mpe kolongisa ye bongo ?
Job LinVB 13:9  Bondimi ’te atala mitema mya bino ? Bokoki nde kokosa ye lokola bakokosaka bato ?
Job LinVB 13:10  Ntembe te, akopesa bino etumbu enene, mpo bolingi kondimela ye na bonkutu.
Job LinVB 13:11  Bino bobangi bokonzi bwa ye te, nkembo ya ye eyokisi bino nsomo o mitema te ?
Job LinVB 13:12  Maloba ma bino mazali se lokola mputulu, biyano bya bino lokola potopoto mpamba.
Job LinVB 13:13  Bokanga monoko, botika ngai naloba, ata likambo likosukela ngai boni.
Job LinVB 13:14  Nabangi te kokende tee nsuka, nabangi liwa mpe te.
Job LinVB 13:15  Akoki koboma ngai ; nazali na elikya esusu te, nzokande nakosamba o miso ma ye.
Job LinVB 13:16  Awa nandimi kosamba, nakobika, zambi moto wa lokuta akoki kobima o miso ma ye te.
Job LinVB 13:17  Bondima koyoka maloba ma ngai, botia matoi na maye nakoyebisa bino.
Job LinVB 13:18  Nakosamba likambo lya ngai, nayebi ’te nasali mabe te.
Job LinVB 13:19  Soko moto akoki kokitisa ngai, nakokanga monoko mpe nakokufa.
Job LinVB 13:20  Nazali kosenge yo se mpo ibale, bongo nakosengela kokima yo te :
Job LinVB 13:21  longola loboko la yo likolo lya ngai, mpe tika kobangisa ngai na makambo ma nsomo.
Job LinVB 13:22  Na nsima tuna ngai mpe nakoyanola yo, to soko ngai natuni yo, zongisela ngai eyano.
Job LinVB 13:23  Nasali lisumu mpe nabuki mobeko mbala boni ? Yebisa ngai mabe nini nasali !
Job LinVB 13:24  Mpo nini obombeli ngai elongi ya yo, mpe otali ngai lokola monguna wa yo ?
Job LinVB 13:25  Olingi konyokolo ngai moto nazali se lokasa la nzete, olingi kokimisa ngai lokola lititi likauka ?
Job LinVB 13:26  Mpo nini okaneli ngai bitumbu binene boye, mpe okundoli masumu ma ngai ma bolenge ?
Job LinVB 13:27  Ntina nini okangi makolo ma ngai na minyololo, okengi ngai bipai binso nazali kokende, mpe omeki kolanda makolo ma ngai ?
Job LinVB 13:28  Yeba ’te moto akokufaka lokola nzete epolo kala, to lokola elamba eliami na nsili.
Chapter 14
Job LinVB 14:1  Moto oyo abotami na mwasi, akoumela o mokili te, mikolo mya ye, se mikolo mya mpasi.
Job LinVB 14:2  Azali lokola fulele ebimi lelo mpe ekauki lobi, akolimwa mbangu lokola elilingi ya ye.
Job LinVB 14:3  Ntina nini okotalaka ye na miso makasi mpe ofundi ye mpo ’te bosamba bino na ye ?
Job LinVB 14:4  Nani akoki kobimisa eloko peto o eloko mbindo ? Moto te !
Job LinVB 14:5  Awa okateli moto mikolo mingi te, otangeli moto moko moko sanza ya ye, mpe otieli ye ndelo akoki koleka te,
Job LinVB 14:6  bongola miso epai esusu, apema naino, mpe asepela lokola mosali o ntango ya bopemi.
Job LinVB 14:7  Nzete ezali na elikya ya solo, soko bakati yango, ekoki kobika, ekobimisa nkasa na bitapi bya sika.
Job LinVB 14:8  Ata minsisa o mabelé mizali mya kala mpe ntina ya yango ekauki o mabelé,
Job LinVB 14:9  soko ezwi mai, ekobimisa nkasa ya sika mpe ekotanda bitapi lokola nzete ebesu.
Job LinVB 14:10  Soko moto awei, esili na ye ; mokolo moto awei akokende o esika nini ?
Job LinVB 14:11  O mbu enene mai makoki kosila, mai makoki kokauka nye o ebale :
Job LinVB 14:12  mowei akoteleme lisusu te, tee likolo likozala, akolala ; akolongwa o mpongi lisusu te.
Job LinVB 14:13  E ngai e, soko otindaki ngai o mboka ya bawa, soko obombaki ngai wana tee nkanda ya yo ekosila : soko obosanaki ngai naino tee mokolo okokanisa ngai.
Job LinVB 14:14  Mowei akoki nde kosekwa ? mbele namemeki mokumba mwa ngai na mpiko, mpe nazilaki mokolo mwa libiki lya ngai.
Job LinVB 14:15  Mbele ntango obengaki ngai, nalingaki kondima noki, awa oyoki mposa ya komono ekelamo ya yo ;
Job LinVB 14:16  mbele ata sikawa ozali kotala bisika binso nakotia makolo, olingaki kokanisa masumu ma ngai lisusu te,
Job LinVB 14:17  olingaki kokanga masumu ma ngai o libenga ; mpe kobomba mabe ma ngai mamonono te.
Job LinVB 14:18  Kasi ngomba ekoki koningana mpe kokweya, ngomba ya mabanga ekoki kobukana mpe kolongwa.
Job LinVB 14:19  Mai makoki kopasola mabanga, esika mai mazali koleka, mabelé makobendama ; se bongo okoboma elikya ya bato.
Job LinVB 14:20  Okokweisa ye seko, mpe akolimwa, okobebisa elongi ya ye, na nsima okobengana ye.
Job LinVB 14:21  Soko bana ba ye bakozwa lokumu, akoyeba te, soko bato bakoyokisa bango nsoni, akomono te.
Job LinVB 14:22  Azali koyoka bobele mpasi ya ye moko, mpe komilela mpo ya mawa ma ye moko.
Chapter 15
Job LinVB 15:2  Moto wa bwanya akoki kozongisa nde eyano ezangi ntina ? akotondisa nde libumu na mompepe mwa Esti ?
Job LinVB 15:3  Akoluka nde komilongisa na maloba mazangi ntina, mpe kosakola makambo makoki kobikisa ye te ?
Job LinVB 15:4  Kutu, obandi kozanga limemya o miso ma Nzambe, mpe obebisi bomanyoli bwa yo o miso ma ye.
Job LinVB 15:5  Masumu ma yo mazali kolobisa yo maloba mana, okomi kolanda monoko mwa bato ba lokuta.
Job LinVB 15:6  Maloba ma yo mazali kokitisa yo moko, ngai te, monoko mwa yo moko mofundi yo.
Job LinVB 15:7  Yo nde moto wa yambo o mokili ? Ntango babotaki yo, ngomba izalaki naino te ?
Job LinVB 15:8  Oyokaki malako ma bankumu ba Nzambe. Bwanya bwa yo bouti nde kuna ?
Job LinVB 15:9  Makambo nini oyebi, maye biso toyebi te ? Eloko nini oyoki malamu mpe biso toyoki yango te ?
Job LinVB 15:10  O ntei ya biso babange na nsuki mpembe bazali, basusu mpe baleki tata wa yo na mibu.
Job LinVB 15:11  Otii motema te na mabondi Nzambe azali kobondo yo, mpe na maloba ma biso ma boboto ?
Job LinVB 15:12  Mpo nini nkanda ebebisi motema mwa yo ? Mpo nini otali na miso makasi boye,
Job LinVB 15:13  awa ozali kosilikela Nzambe mpe okomi koloba maloba maike maike ?
Job LinVB 15:14  Boniboni moto akoki komimono ’te azali peto ? Eloko ebotami na mwasi ezali nde na bosembo ?
Job LinVB 15:15  Nzambe atii ntembe ata na basantu ba ye, mpe o miso ma ye banzelu bazangi mbindo te.
Job LinVB 15:16  Bongo mbindo ezanga na moto mpamba, oyo abeba, awa ameseni kosala masumu lokola akomeleke mai ?
Job LinVB 15:17  Yoka ngai, nalingi koteya yo, nakoyebisa yo makambo ngai namonoki.
Job LinVB 15:18  Bakolo bayoká maye manso na bankoko, bango bayebisi biso polele, babombi eloko te.
Job LinVB 15:19  Bankoko bakomaki bankolo ba ekolo, esika mompaya akotoki naino te.
Job LinVB 15:20  Mosumuki akomiyokisaka mpasi bomoi bwa ye mobimba. Ata monyokoli aumeli mibu boni,
Job LinVB 15:21  na matoi ma ye azali koyoka bobele makambo ma nsomo, soko afandi na boboto mobebisi azali kokanela ye.
Job LinVB 15:22  Elikya ya kokima molili ezali te, ayebi ’te akokufa se na mopanga.
Job LinVB 15:23  Azali lokola nyama emeki kokima engondo, ayebi ’te akosuka bobele o liwa ;
Job LinVB 15:24  mawa na nsomo ikokanga ye, akobanga lokola mokonzi ayeli ye bitumba.
Job LinVB 15:25  Mpamba te, ye moko aluki kobundisa Nzambe mpe atombokeli Nzambe wa bokasi bonso.
Job LinVB 15:26  Akitisi motó, akei mbangu mpo ya kobete Nzambe, amibombi o nsima ya nguba ya ye enene.
Job LinVB 15:27  Elongi ya ye etondi na mafuta mafuta makangemi o loketo la ye.
Job LinVB 15:28  Akei kofanda o mboka ebebi na bitumba mpe o ndako ikoki kobatela ye lisusu te, iye ibandi kokweya mpe kobukana.
Job LinVB 15:29  Akokolisa nkita ya ye te, mosolo mwa ye mokoumela soki te, akomeme nkita ya ye o mboka ya bawa te.
Job LinVB 15:30  Akoki kokima mboka ya molili te, móto mokokaukisa ye lokola bitapi bya nzete, akokima ata mpema ya monoko mwa ye moko.
Job LinVB 15:31  Soko akanisi ’te akobika mpo ya lokuta la ye, amikosi, zambi bakozongisela ye mpe makambo ma lokuta.
Job LinVB 15:32  Akosuka, naino mikolo mya ye mikoki te, mpe bitapi bya nzete ya ye bikokola lisusu te.
Job LinVB 15:33  Azali lokola nzete ya vino ekweisi mbuma ibesu, mpe lokola nzete ya oliva ekweisi fulele noki.
Job LinVB 15:34  Solo, bato babe bakozwa libota te, móto mokosilisa biema bya basumuki.
Job LinVB 15:35  Bato bakani kosala mabe bakobimisa se misala mibe, mosala mwa bango, se kolembisa bato.
Chapter 16
Job LinVB 16:2  Nasili koyoka maloba maye, bozali na mawa solo, bino bato bolingi kobondo ngai !
Job LinVB 16:3  Bolobi : « Maloba maye mazangi ntina mazali nde na nsuka te ? Eloko nini etindi yo koyanola lisusu ? »
Job LinVB 16:4  Ngai mpe nakokaki koloba lokola bino, soko bozalaki o esika ya ngai ; mbele nabimiseli bino maloba elengi, mpe naningisi motó mpo ya bino.
Job LinVB 16:5  Mbele nabondi bino na maloba ma ngai, mpe nasilisi mawa ma bino.
Job LinVB 16:6  Ata nazali koloba, mpasi ya ngai ekosila te, ata nazali kokanga monoko, mpasi ekotika ngai mpe te.
Job LinVB 16:7  Kasi sikawa, Nzambe alembisi ngai, nasuki, zambi bato ebele bakomi kozinga ngai.
Job LinVB 16:8  Moto afundi ngai akomi nzeneneke wa ngai, atelemi mpe afundi ngai polele.
Job LinVB 16:9  Nkanda ya ye elandi mpe enyokoli ngai ; o miso ma ngai akomi kolia mino. Banguna ba ngai batali ngai swii,
Job LinVB 16:10  bafungoli monoko mpo ’te bakanela ngai, mafinga mabe ma bango mabeti ngai lokola mbata, banso bayokani ’te bakobundisa ngai.
Job LinVB 16:11  Nzambe akabi ngai o maboko ma bato bazangi bosembo, abwaki ngai o maboko ma bato babe.
Job LinVB 16:12  Nafandaki nye, kasi ye ayei kotungisa ngai mpe kokanga ngai mpo abuka ngai nkingo, apiki ngai mpo ’te banguna babetele ngai mimbai.
Job LinVB 16:13  Bato ba ye ba matimbo bazingi ngai, batuboli ngai, mawa te, mpe basopi misopo mya ngai o nse.
Job LinVB 16:14  Azokisi ngai mpota epai na epai, abimeli ngai lokola mobundi.
Job LinVB 16:15  Nazipi nzoto na ngoto, mpe nakitisi motó kin’o mabelé.
Job LinVB 16:16  Miso ma ngai mateli na boleli, mpe molili mozipi ngai elongi.
Job LinVB 16:17  Nzokande naboyaki makambo makasi makasi, mpe nasambelaki na motema peto.
Job LinVB 16:18  E mabelé, omele makila ma ngai te, boleli bwa ngai bozwa ntango ya kopema te.
Job LinVB 16:19  Banda lelo nazwi molobeli o likolo, oyo akobatela ngai azali kuna o likolo.
Job LinVB 16:20  Baninga ba ngai bazali koseke ngai, kasi ngai nakolelela se Nzambe.
Job LinVB 16:21  Ye moko abikisa bato baye bakosamba na Nzambe, se lokola moto akobikisaka moninga wa ye.
Job LinVB 16:22  Nzokande basili batangi mikolo mya ngai, nazali kokende nzela eye bakozongaka te.
Chapter 17
Job LinVB 17:1  Mpema ya ngai ekei ; mikolo mya ngai mikoki, nakomi moto akokima lilita lisusu te.
Job LinVB 17:2  Pene na ngai se bato bazali kotiola ngai, boseki bwa bango bozali kosilisela ngai mpongi.
Job LinVB 17:3  Yo moko omitia ndanga o esika ya ngai, nani mosusu akondima kolongisa ngai ?
Job LinVB 17:4  Ya solo, okangi mitema mya bango mpo bakanisa te, olingi mpe te ’te balonga.
Job LinVB 17:5  Bazali lokola moto abengi baninga o limpati, ntango bana ba ye moko bazali kokufa na nzala.
Job LinVB 17:6  Nkombo ya ngai ekomi nzembo o monoko mwa bango, nakomi lokola moto babwakeli ye nsoi o elongi.
Job LinVB 17:7  Motema mwa ngai motondi na mawa, nzoto elembi nye.
Job LinVB 17:8  Bato ba bosembo bakamwi mpe bamibendi, bato balamu bayoki mabe, balobi : « Talani mosumuki. »
Job LinVB 17:9  Moto semba atiki ezalela ya ye te, mpe moto wa maboko peto azali se na mpiko enene.
Job LinVB 17:10  Bino banso boya lisusu, boya ! O kati ya bino nakozwa moto moko wa bwanya te.
Job LinVB 17:11  Mikolo mya ngai misili, nalingi nakata motema, makambo nakanaki kosala mabebi.
Job LinVB 17:12  Butu, bakomi kobenga yango moi, soko mpokwa eyei, balobi : Ntongo etani !
Job LinVB 17:13  Nalula lisusu nini ? Mboka ya bawa ekomi mboka ya ngai, batandi mbeto ya ngai kuna.
Job LinVB 17:14  Nakotanga lilita ‘tata wa ngai’, mpe nkusu ‘mama’ to ‘ndeko mwasi’.
Job LinVB 17:15  Elikya ya ngai ezali wapi ? Nani akoki komono yango ?
Job LinVB 17:16  Yango ekokita kin’o mboka ya bawa, mokolo biso banso tokozinda o kati ya mabelé ?
Chapter 18
Job LinVB 18:2  Mokolo nini okotika koloba bongo ? Kanisa liboso, na nsima tokozongisela yo maloba.
Job LinVB 18:3  Mpo nini otali biso lokola bazoba ? Okanisi ’te biso tozangi mayele ?
Job LinVB 18:4  Yo moko ominyokoli na nkanda ya yo, olingi ’te bato basila o mokili mpo ya yo, mpe ngomba ya mabanga elongwa o esika ya yango ?
Job LinVB 18:5  Ntembe te, mwinda mwa moto mabe mokozima, mpe móto mokongenge o ndako ya ye lisusu te.
Job LinVB 18:6  Moi mokobongwana molili o ema ya ye, mpe mwinda mozali likolo lya ye mokopela lisusu te.
Job LinVB 18:7  Liboso azalaki kotambola makasi, sikawa alembi ; akomi kotuta libaku liye ye moko atielaki baninga.
Job LinVB 18:8  Ye moko akokotisa makolo ma ye o motambo, mpe akotambola nzela eye ekokanga ye o monyama.
Job LinVB 18:9  Motambo mokokanga ye o litindi, monyama mokokwela ye o nzoto.
Job LinVB 18:10  Nsinga eye ekokanga ye ebombami o nse, o nzela eye akoleka motambo mozali.
Job LinVB 18:11  Bipai binso akokuta se makambo ma nsomo, makolanda ye o nzela inso akokende.
Job LinVB 18:12  Nzala makasi ekosilisa nguya ya ye, malozi maike makotambola na ye nzela yoko.
Job LinVB 18:13  Bokono bokosilisela ye lomposo la nzoto, malozi ma liwa makolia binama bya ye.
Job LinVB 18:14  Bakolongola ye o esika akomibombaka, bakokamba ye epai ya mokonzi wa liwa.
Job LinVB 18:15  Ndokoki kofanda o ema ezali ya yo lisusu te. bakobwakela yango fofolo.
Job LinVB 18:16  Minsisa mya nzete ya ye mikokauka, bitapi bya nzete bikolembe.
Job LinVB 18:17  O ekolo mobimba moto moko akokanisa ye lisusu te, o ntei ya bana mboka bakotanga nkombo ya ye lisusu te.
Job LinVB 18:18  Bakolongola ye o mwinda mpe bakobwaka ye o molili, bakopima ye esika ya bozali o mokili mona.
Job LinVB 18:19  O mboka ya ye akotika mwana moko te, nkoko mpe te, o ndako ya ye moto moko akokitana ye azali te.
Job LinVB 18:20  Bato ba Westi bakolenge mpenza, bato ba Esti bakoyoka nsomo, bakomilobela :
Job LinVB 18:21  « Mboka ya bato babe ekosukaka boye, ná mpe ndako ya bato baboyá Nzambe ! »
Chapter 19
Job LinVB 19:2  Mikolo boni naino bokotumola ngai mpe bokotungisa ngai na maloba ma bino ?
Job LinVB 19:3  Bosili kofinga ngai mbala zomi, awa bonyokoli ngai bongo, bozali koyoka nsoni te ?
Job LinVB 19:4  Ata nabungi nzela mpe nabebi, mabe mana matali se ngai moko.
Job LinVB 19:5  Soko bozali kokitisa ngai mpo ’te bolonga, mpe kofunda ngai na makambo makoyokisa ngai nsoni,
Job LinVB 19:6  boyeba ’te Nzambe moto ayokisi ngai mpasi, mpe akangi ngai o monyama mwa ye.
Job LinVB 19:7  Ata nagangi makasi, akoyanola te, ata nabeleli, akoyokemela ngai te.
Job LinVB 19:8  Akangeli ngai nzela mpo naleka te, mpe atindi molili o bisika binso nalingi kokende.
Job LinVB 19:9  Alongoli lokumu la ngai, abotoli ngai enkoti ya bokonzi.
Job LinVB 19:10  Abebiseli ngai makambo manso, nakufi nye, alongoli elikya ya ngai lokola bakopikolaka nzete.
Job LinVB 19:11  Akolisi nkanda ya ye, atali ngai lokola monguna wa ye.
Job LinVB 19:12  Bato ba ye babimeli ngai ebele, baluki nzela ya kokoma epai ya ngai, mpe batelemi zongazonga ya ema ya ngai.
Job LinVB 19:13  Alongoli bandeko ba ngai pene na ngai, bayebani ba ngai bayebi ngai lisusu te.
Job LinVB 19:14  Baninga ba ngai banso bakimi ngai, bato ba libota lya ngai babosani ngai.
Job LinVB 19:15  Basali basi ba ngai batali ngai lokola mompaya, lokola bamoni ngai naino mokolo moko te.
Job LinVB 19:16  Nabengi mosali wa ngai, kasi ayanoli ngai te, ata nabondeli ye mingi mpenza.
Job LinVB 19:17  Mwasi azali kokima nsolo ebe ya mpema ya ngai, bana ngai moko naboti bakomi kokima ngai.
Job LinVB 19:18  Ata bana bake bakomi kokinola ngai, soko natelemi, babandi kotiola ngai.
Job LinVB 19:19  Baninga ba ngai ba motema bayoki ngai mpi, baye ngai nalingi mingi bapesi ngai mokongo.
Job LinVB 19:20  Natikali se minkuwa na mposo mpamba, bobele na mpasi nakoki koteleme naino.
Job LinVB 19:21  E bandeko ba ngai, boyokela ngai mawa, zambi loboko la Nzambe lobeti ngai.
Job LinVB 19:22  Mpo nini bonyokoli ngai mingi boye, se lokola Nzambe ? Bolingi nde kolia misuni mya ngai ?
Job LinVB 19:23  Nalingi bakoma maloba ma ngai o monkanda, bakoma manso na nkoma inene,
Job LinVB 19:24  bakoma mango o libanga makotikala seko, bakata mango na ebende ya nsonge.
Job LinVB 19:25  Nayebi ’te mobikisi wa ngai azali, akoya kokata makambo manso awa o nse.
Job LinVB 19:26  Na nsima akotelemisa ngai pene na ye, bongo ndenamoni Nzambe na miso ma ngai.
Job LinVB 19:27  Nakomono ye na miso, akozala pene na ngai, nakomono ye, moto mosusu te ; nawei na mposa ya komono mokolo mona.
Job LinVB 19:28  Awa bolobi : « Tonyokolo ye ndenge nini ? Na likambo nini tokofunda ye ? »,
Job LinVB 19:29  bino moko bobanga etumbu ya mopanga, zambi nkanda ekozwela moto mabe etumbu, bongo bokoyeba ’te Mosambisi azali.
Chapter 20
Job LinVB 20:2  Nazali motema likolo mpo ’te nayanola ; nakoki kokanga motema lisusu te.
Job LinVB 20:3  Solo, maloba ma yo matumoli ngai, kasi nazwi mayele ma kozongisela yo eyano.
Job LinVB 20:4  Obungi te ’te, uta kala mpenza, banda moto abimá o mokili,
Job LinVB 20:5  esengo ya moto mabe ekoumelaka te, mpe nsai ya mosumuki ekoumelaka mingi te.
Job LinVB 20:6  Ata azali molai tee o likolo, mpe motó mwa ye motutani na mampata,
Job LinVB 20:7  akolimwa seko lokola elima, mpe bayebani ba ye bakotuna : « Akomi wapi ? »
Job LinVB 20:8  Akolimwa na mbala yoko lokola ndoto, bakozwa ye te ; akokima lokola limoni lya butu.
Job LinVB 20:9  Bato bazalaki komono ye na miso, bakomono ye lisusu te, ata o esika azalaki kofanda.
Job LinVB 20:10  Bana ba ye ndebazongiseli babola biloko, bankoko ba ye ndebatikeli bango nkita ya ye.
Job LinVB 20:11  Azalaki na nzoto makasi lokola elombe, kasi sikawa alali o mabelé.
Job LinVB 20:12  Mabe manso mayokisi ye elengi o monoko, abombaki mango o motema ;
Job LinVB 20:13  ayokaki mango elengi, abombi mabe mana, abosani mango te ;
Job LinVB 20:14  bilei biye bibebi o misopo mya ye, bikomeli ye lokola ngenge ya nyoka.
Job LinVB 20:15  Mosolo aliaki, sikawa akosanza mwango, Nzambe abimisi mwango o libumu lya ye.
Job LinVB 20:16  Ameleki ngenge ya nyoka, yango wana lolemu la nyoka lobomi ye.
Job LinVB 20:17  Akomono lisusu moluka to ebale te, esika mafuta ma nzoi to mabéle ma ngombe mazalaki.
Job LinVB 20:18  Akosanza biloko binso aliaki, akomele byango te, ata azwaki mosolo mingi, mokosepelisa ye te.
Job LinVB 20:19  Azalaki konyata mpe konyokolo babola, azalaki kobotolo bango ndako esika ’te abatela bango.
Job LinVB 20:20  Awa azalaki kopima libumu lya ye eloko te, akobikisa ata eloko yoko ya nkita ya ye te.
Job LinVB 20:21  Azalaki kolulalula biloko na lokoso, yango wana bomengo bwa ye bokoumela soki te.
Job LinVB 20:22  Mokolo akomi na biloko biike, nzala ekokanga ye ; mpasi inso ikokwela ye o nzoto.
Job LinVB 20:23  Ntango azali kotondisa libumu lya ye, nkanda ya Nzambe ekobete ye, ekoyela nzoto ya ye bitumbu biike.
Job LinVB 20:24  Soko akimi mbeli ya bibende, litimbo lya mbengi likotubola ye.
Job LinVB 20:25  Likongo likobima o mokongo mwa ye, nsonge ya likula ekokoto o libale, mpasi ya nsomo ekokwela ye.
Job LinVB 20:26  Bipai binso alingi kobombama, akokuta se molili, móto bapelisi te, mokozikisa binso mpe mokosilisa biloko bitikalaki o ema ya ye.
Job LinVB 20:27  Likolo likosakola mabe ma ye, mpe mokili mokotombokela ye makasi.
Job LinVB 20:28  Mbula enene ekozindisa ndako ya ye mpe ekobenda ye o mokolo mwa nkanda.
Job LinVB 20:29  Yango nde etumbu Nzambe akopesaka moto mobe, mpe lisango akobombelaka ye.
Chapter 21
Job LinVB 21:2  Boyoka ngai mwa moke, bokoki kobondo ngai bongo.
Job LinVB 21:3  Botika ngai naloba naino ; soko nasilisi, bokoki koseke ngai.
Job LinVB 21:4  Soko nazalaki komilela mpo ya bato, mbele nakokaki kokanga motema lisusu te.
Job LinVB 21:5  Yakani kotala ngai mpe bokokamwa, bokozipa minoko mya bino na loboko.
Job LinVB 21:6  Ngai moko nazali kobanga soko nakanisi makambo mana, mpe nabandi kolenge nzoto mobimba.
Job LinVB 21:7  Mpo nini bato babe batikali na bomoi ? Awa banuni bakobi se kosangisa biloko.
Job LinVB 21:8  Bana ba bango bazali kokola o ndako ya bango, bazali komono bankoko ba bango na miso.
Job LinVB 21:9  O ndako bafandi na boboto, babangi eloko te, fimbo ya Nzambe ebeti bango te.
Job LinVB 21:10  Ngombe babali ya bango ikobotisa basi malamu, ngombe basi ya bango ikosopaka zemi te.
Job LinVB 21:11  Bakotika bana ba bango básakana o libanda, batiki bilenge bakende kobina.
Job LinVB 21:12  Bayembi nzembo na bobeti mbonda mpe likembe, basepeli mpe babini na bobeti mpiololo.
Job LinVB 21:13  Mikolo mya bango mikosuka na esengo mpe bakokita na boboto o mboka ya bawa.
Job LinVB 21:14  Nzokande balobaki na Nzambe : « Tika biso, mibeko mya yo misepelisi biso te.
Job LinVB 21:15  Mpo nini tosalela Nzambe wa bokasi ? Na bobondeli ye tokozwa eloko nini ? »
Job LinVB 21:16  Esengo ya bango ezali o maboko ma bango, ata baboyi kondima Nzambe o makambo ma bango.
Job LinVB 21:17  Tozali komono : mwinda mwa bato babe mokozimaka noki te, makambo ma mpasi makokwelaka bango te, nkanda ya Nzambe ekosilisa bango te,
Job LinVB 21:18  mompepe mokopimbwisa bango lokola matiti te, ekumbaki ekomeme bango lokola nkasa te ?
Job LinVB 21:19  Nzambe akopesaka bana etumbu mpo ya mabe ma tata ? Oyo asali mabe azwa etumbu, ye moko, bongo ayeba !
Job LinVB 21:20  Amono na miso ’te makambo ma ye makomi kobeba, ayeba ndenge nkanda ya Nzambe ekozalaka !
Job LinVB 21:21  Soko mikolo mya ye misili mikoki, etumbu bana bakozwa ekosala ye nini ?
Job LinVB 21:22  Kasi nani akoki kopesa Nzambe mayele, Oyo akosambisa bato ut’o likolo ?
Job LinVB 21:23  Mosusu akokufa o ntango azali naino makasi, na motema esengo mpe na boboto ;
Job LinVB 21:24  azali se moto monene, na nzoto mafuta, mpe minkuwa mya ye milembi te.
Job LinVB 21:25  Mosusu akokufa na mawa o motema, zambi azwaki bolamu mokolo moko te.
Job LinVB 21:26  Bango babale bakokundama bobele esika yoko, bakoliama na nkusu motindo se moko.
Job LinVB 21:27  E, nayebi makanisi ma bino malamu, solo, nayebi nini bozali kokanisela ngai.
Job LinVB 21:28  Bokotuna ngai : « Wapi libota lya mokonzi monene ? Ema ya bato babe esuki boni ? »
Job LinVB 21:29  Batunaki bato bakokendeke mibembo te ? Bondimaki masolo ma bango te ?
Job LinVB 21:30  O mokolo mwa minyoko moto mabe akobika ; o eleko ya nkanda akozwa esika ya kobombama.
Job LinVB 21:31  Nani akopalela ye mpo ya ezalela ya ye ebe ? Nani akomeka kozongisela ye mabe asali ?
Job LinVB 21:32  O mokolo mwa liwa lya ye bato bakoya ebele, mpe bakokengele lilita lya ye malamu.
Job LinVB 21:33  Akolala na boboto o kati ya mabelé, bato baike basili kokende liboso lya ye, bato ebele bakolanda ye nsima.
Job LinVB 21:34  Bongo mpo nini bokoya kobondo ngai ? Biyano bya bino bizali bya lokuta.
Chapter 22
Job LinVB 22:2  Moto akoki nde kopesa Nzambe eloko ? Ata moto wa bwanya akoki bobele komisalisa.
Job LinVB 22:3  Nzambe wa bokasi akotala nde bosembo bwa yo ? Nzambe akozwa nini mpo ya ezalela elamu ya yo ?
Job LinVB 22:4  Nzambe abengi yo nde o esambi mpo ya bosembo bwa yo ? Yango wana alingi kosambisa yo ?
Job LinVB 22:5  Eloko te, ezali se mpo ya bobe bwa yo, mpo ya mabe ma yo ndelo te !
Job LinVB 22:6  Osengeki bandeko ndanga ezangi ntina, obotoloki bango bilamba, yango wana batikalaki bolumbu.
Job LinVB 22:7  Bato balembi na mosala, opimaki bango mai, opimaki bato bakufi na nzala mampa balia.
Job LinVB 22:8  Solo, bato makasi bazali na bokonzi, mpe bato ba bango bakokonzaka mokili.
Job LinVB 22:9  Ozongisaki basi bakufeli babali maboko mpamba, mpe na bana bitike ozalaki maboko makasi.
Job LinVB 22:10  Yango wana mitambo mizingi yo, mpe makambo ma nsomo mayeli yo na mbalakaka.
Job LinVB 22:11  Ozali komono lisusu te mpo ya molili makasi, ozindi o mai manene.
Job LinVB 22:12  Oyebi ’te Nzambe azali mosika, o nta likolo, omoni minzoto mizali mosika mingi,
Job LinVB 22:13  yango wana olobi : « Nzambe akoki koyeba eloko te ! Akoki nde kotala bato bazali o nse ya mampata ?
Job LinVB 22:14  Mampata mazali lokola elamba, akomono eloko te ; ye atikali bobele o mokili mwa likolo. »
Job LinVB 22:15  Bongo, olingi kolanda nzela ya kala, eye bato babe bazalaki kotambola ?
Job LinVB 22:16  Bango bawei, ata mikolo mya bango mikokaki te, mai ma ebale mazindisi ndako ya bango.
Job LinVB 22:17  Balobaki na Nzambe : « Tika biso nye ! Nzambe wa bokasi akoki kosala biso nini ? »
Job LinVB 22:18  Nzokande Ye atondisaki ndako ya bango na biloko, ata baboyaki kondima malako ma ye.
Job LinVB 22:19  Awa bakwei bato balamu basepeli, moto wa bosembo aseki bango,
Job LinVB 22:20  alobi : « Tala banguna ba biso basuki, móto mosilisi biloko bya bango binso ! »
Job LinVB 22:21  Yo, senge bolimbisi mpe luka bondeko, bongo Nzambe akozongisela yo bolamu bwa kala.
Job LinVB 22:22  Ndima mateya okoyoka o monoko mwa ye, mpe bomba maloba ma ye o motema mwa yo.
Job LinVB 22:23  Soko ozongeli Nzambe wa bokasi na motema bosawa, olongoli makambo mabe manso o ema ya yo.
Job LinVB 22:24  Soko obwaki biloko bya yo bya motuya o mabelé, mpe obwaki wolo ya Ofir o mai esika mabanga mazali,
Job LinVB 22:25  Nzambe wa bokasi bonso akozala wolo ya yo mpe mosolo mwa yo, moye okotiaka motema.
Job LinVB 22:26  Bongo okosepela Nzambe wa bokasi mpe okotombola elongi epai ya ye.
Job LinVB 22:27  Soko obondeli ye, akondimela yo, mpe okobonzela ye mabonza olakelaki ye.
Job LinVB 22:28  Maye okani kosala, makotambola malamu, mwinda mokopela o nzela ya yo inso.
Job LinVB 22:29  Ndokoki koloba na bato bakwei : « Boteleme ! », zambi Nzambe akobikisa bato bakomikitisaka.
Job LinVB 22:30  Akobikisa ata moto azali na likambo, akokitisa yo te, mpo ozali na maboko peto.
Chapter 23
Job LinVB 23:2  Nazali se komilela na botomboki, loboko la ye lozali kofina ngai, ata nazali kokimela.
Job LinVB 23:3  E ngai e, soko nayebaki esika bakoki kokuta ye mpe kokoma o ndako ya ye,
Job LinVB 23:4  mbele nasambaki o miso ma ye, mpe nalakisaki ye ntina inso ya likambo lya ngai,
Job LinVB 23:5  mbele nayoki eyano nini akopesa ngai, bongo nayoka nini alingi.
Job LinVB 23:6  Akosamba na ngai na makasi ma ye manso te, kasi akondima koyoka maloba ma ngai.
Job LinVB 23:7  Mbele akondima ’te nazali kosamba lokola moto semba, mpe akomono ’te akoki kokitisa ngai te.
Job LinVB 23:8  Kasi soko nakei epai ya Esti, azali wana te, to epai ya Westi, nakomono ye te.
Job LinVB 23:9  Azala o Nordi, nakoki kozwa ye te, ámibomba o Sudi, nakomono ye te.
Job LinVB 23:10  Nzokande ayebi ezalela ya ngai mobimba, ameka ngai, akoyeba ’te nazali peto lokola wolo.
Job LinVB 23:11  Nalandaki bobele matambi ma ye, natikaki nzela ya ye te, napengwaki mbala yoko te.
Job LinVB 23:12  Natosaki mibeko mya ye, naboyaki myango te, nakumisaki mitindo mya ye, natosaki myango.
Job LinVB 23:13  Makambo ye akokata, nani akobongola mango ? Manso makosalema lokola ye moko alingi.
Job LinVB 23:14  Awa akati likambo lya ngai, akosala se bongo, se lokola makambo maike akani kosala.
Job LinVB 23:15  Yango wana nayoki nsomo o miso ma ye, awa napusi kokanisa yango, nakomi kobanga mingi.
Job LinVB 23:16  Nzambe alembisi ngai motema, Mokonzi wa bokasi ayokisi ngai nsomo.
Job LinVB 23:17  O kati ya molili nabangi koloba te, ata molili mwa ye mozipi ngai.
Chapter 24
Job LinVB 24:1  Mpo nini Nzambe abombeli bato mikolo misusu te ? Mpo nini bato bandimi ye bakomonoko myango te ?
Job LinVB 24:2  Bato babe bakotindisaka ndelo ya bilanga bya bango, bakobokoloko bibwele bayibaki.
Job LinVB 24:3  Bakokamataka mpunda ya bana bitike, bakobotoloko mwasi bozenge ngombe ya ye.
Job LinVB 24:4  Bakobenganaka o nzela bato bakeleli, babola basengeli komibomba mosika na bango.
Job LinVB 24:5  Lokola mpunda ya esobe bakobimaka ut’o ntongo mpo ya koluka bilei, mpo ’te basilisa nzala ya bana ba bango.
Job LinVB 24:6  Mbuma iye bakobukaka, se matiti mpe mbuma ya vino iye itikali o bilanga bya bato babe.
Job LinVB 24:7  Na butu bakolalaka bolumbu, mpo bazangi bilamba mpe bolangiti mpo ya komibatela o eleko ya mpio.
Job LinVB 24:8  Mbula ekoutaka o ngomba ekopolisaka bango, bakobombamaka o mibenga mpo bazangi ndako.
Job LinVB 24:9  Babotoli mwana etike mwa mabelé ma ye, bakamati biloko bya mobola bo ndanga.
Job LinVB 24:10  Bakotambolaka bolumbu, elamba o nzoto te, basengeli komeme mikumba ata bakufi na nzala,
Job LinVB 24:11  bakokamolaka mbuma ya mafuta na moi makasi, mpe bakonyataka bituka bya vino, ata bakufi na mposa ya mai.
Job LinVB 24:12  O engumba bato balingi bakufa bakokimelaka, baye bazoki bakobelelaka mpo bazwa lisalisi, kasi Nzambe akoyokaka bango te !
Job LinVB 24:13  Banyokoli ba bango bakoyinaka moi, bameseni na nzela ya babola te, bakolandaka nzela ike te.
Job LinVB 24:14  Mobomi akolamukaka na butu, mpo ’te akende koboma mobola na mozangi, mpo ayiba biloko bya bato :
Job LinVB 24:15  Moto wa bosoni akozilaka ntango ya molili, akanisi : « Moto moko amono ngai te », mpe azipi elongi ya ye na elamba.
Job LinVB 24:16  Moyibi akobukaka ndako ya bato na butu, na moi abombami o ndako, alingi komono mwinda te.
Job LinVB 24:17  Bango banso babangi ntongo lokola bakobangaka liwa, bameseni se na nsomo ya molili.
Job LinVB 24:18  Makambo ma bango lokola nkoni ekotetwa o mai. Bato banso ba mokili batombela bilanga bya bango bobe. Bakokende lisusu o bilanga bya vino te.
Job LinVB 24:19  Lokola molunge mokonyangwisaka mai ma matandala, mboka ya bawa ekolimwisa moto wa masumu.
Job LinVB 24:20  Mama wa ye akobosana ye, nkusu ikolia ye, bakotanga nkombo ya ye lisusu te ; mosumuki akosuka mabe lokola nzete bakati.
Job LinVB 24:21  Azalaki konyokolo mwasi ekomba, mpe aboyaki kosalisa mwasi akufeli mobali.
Job LinVB 24:22  Bongo Nzambe, oyo akolongolaka bato banene na makasi, awa atelemi, moto oyo akomi kobanga liwa.
Job LinVB 24:23  Nzokande Nzambe akopesa ye mikolo afanda naino kimia, kasi miso ma ye mazali se kotala ye.
Job LinVB 24:24  Akoyoka malamu bobele mwa ntango, na nsima esili, akosuka lokola bato baye basilisaki mobembo. Azali lokola motó mwa lititi bakati.
Job LinVB 24:25  Ezali bongo te ? Nani akondimisa ngai mambi ma lokuta ? Nani akoki kowangana maloba ma ngai ?
Chapter 25
Job LinVB 25:2  Nzambe azali mokonzi monene wa bokasi bonso, akotiaka kimia kuna o likolo.
Job LinVB 25:3  Nani akoki kotanga motango mwa basoda ba ye ? O mboka nini moi mwa ye mokobimaka te ?
Job LinVB 25:4  Nani azali moto wa bosembo o miso ma Nzambe ? Moto abotami na mwasi akoki kozala peto ?
Job LinVB 25:5  Ata mpe sanza ezali kongenge makasi te, mpe minzoto mingengi o miso ma ye te ;
Job LinVB 25:6  bongo moto ye nde nani, ye mwana wa moto, eloko mpamba lokola nkusu ?
Chapter 26
Job LinVB 26:2  Solo, oyebi kosalisa moto azangi bokasi, mpe kolendisa motema mwa moto alembi !
Job LinVB 26:3  Oyebi kopesa malako na moto azangi mayele, mpe kolakisa bato bwanya bwa solo.
Job LinVB 26:4  Ozali koloba maloba mango na nani ? Nani atindi yo oloba bongo ?
Job LinVB 26:5  Bilima o mboka ya bawa bizali kolenge, mbu mpe bikelamo bya yango bizali koyoka nsomo.
Job LinVB 26:6  Kin’o mboka ya bawa Nzambe akomonoko makambo manso, elamba ekozipa libulu lizindo ezali te.
Job LinVB 26:7  Ye apiki etando ya likolo o bisika bikoki komonono te, mpe apiki mokili na eloko yoko te.
Job LinVB 26:8  Ye akobombaka mai o kati ya mampata, mpe mampata makopaswana mpo ya bozito te.
Job LinVB 26:9  Soko azipi sanza na mampata, moto moko akoki komono ngwende ya ye te.
Job LinVB 26:10  Akati ndelo kuna o likolo lya mai ma mbu, ezala esika moi na butu bikokutana.
Job LinVB 26:11  Makonzi ma likolo malengi mpe mayoki nsomo ntango Nzambe akaneli mango.
Job LinVB 26:12  Na nguya ya ye akaboli mbu o biteni bibale, na bwanya bwa ye abomi Elima ya mai.
Job LinVB 26:13  Na mpema ya ye akweisi bikelamo bya likolo, na loboko la ye atuboli Nyoka na likongo.
Job LinVB 26:14  Totangi awa se ndambo ya bikela bya ye, bikela bya ye ebele, toyebi byango te. Nani kutu akoki koyeba bokasi bwa ye, nsomo lokola nkake ?
Chapter 27
Job LinVB 27:2  O nkombo ya Nzambe oyo alingi kolongisa ngai te, Nzambe wa bokasi bonso oyo ayokisi ngai motema mpasi,
Job LinVB 27:3  awa nazali naino kopema, mpe Nzambe alongoli mompepe o zolo ya ngai naino te,
Job LinVB 27:4  nalayi ’te nakobuka lokuta na monoko mwa ngai te mpe nakoluka kokosa moto na lolemu la ngai te.
Job LinVB 27:5  Nakoki kondima maloba ma bino te, tee liwa nakosakola ’te nasali mabe te.
Job LinVB 27:6  Nalembi koloba ’te nazali moto wa bosembo ; nayebi ’te nasali likambo libe mokolo moko te.
Job LinVB 27:7  Monguna wa ngai azwa etumbu ya bato babe, monyokoli wa ngai azwa etumbu ya basumuki.
Job LinVB 27:8  Bino bokolobaka : « Moto mabe atikali na elikya nini, awa Nzambe akobotolo ye bomoi ?
Job LinVB 27:9  O mikolo mpasi ya nsomo ekokwela ye, Nzambe akoyoka ye te, ata aleli makasi.
Job LinVB 27:10  Soko ayokaki Nzambe wa bokasi bonso elengi, mbele abondelaki ye mikolo minso. »
Job LinVB 27:11  Ngai nakolakisa bino bwanya bonene bwa Nzambe, nakobombela bino makanisi ma Nzambe wa bokasi te.
Job LinVB 27:12  Awa bino banso bomonoki mango polele, mpo nini bozali koloba makambo maye ma mpamba ?
Job LinVB 27:13  Boyoka boniboni Nzambe akosala na moto mabe, mpe etumbu nini akopesa monyokoli :
Job LinVB 27:14  Ata abotaki bana baike, bakokufa na mopanga, mpe bankoko ba ye bakokelela mampa.
Job LinVB 27:15  Bokono bobe bokoboma baye batikali, mpe basi bakoki kolela bango te.
Job LinVB 27:16  Ata akongoli ngomba ya mosolo, ata azwi bilamba ebele mpenza,
Job LinVB 27:17  moto semba akolata bilamba ye abombaki, mpe oyo azali na likambo te akozwa mosolo mwa ye.
Job LinVB 27:18  Amitongelaki ndako lokola ndako ya limpulututu, lokola molako bakengeli bakomitongelaka.
Job LinVB 27:19  Ye moto wa nkita enene, soko akufi, nkita esili, soko afungoli miso, akomono eloko yoko lisusu te.
Job LinVB 27:20  Makambo ma nsomo makokwela ye lokola ekumbaki, o kati ya butu mompepe makasi mokomeme ye.
Job LinVB 27:21  Mompepe mwa Esti mokotombola ye mpe mokobenda ye, ekumbaki ekolongola ye o ndako ya ye.
Job LinVB 27:22  Bakobetele ye makula mawa te, akomeka kokima mimbai mya moto wa litimbo.
Job LinVB 27:23  Bato banso bakosepela mpasi ya ye mpe bakowulola ye bipai binso.
Chapter 28
Job LinVB 28:1  Solo, bisika bakotimolaka palata bizali, bato bazali mpe na mayele ma kopetola wolo.
Job LinVB 28:2  Bakobimisaka bibende o mabelé, mpe bakonyangwisaka mabanga mpo ya kozwa mitako.
Job LinVB 28:3  Bato basili kokita o mabulu ma molili, mpe kokende koluka tee o nse ya mabelé, esika mabanga mabombami o mboka ya molili.
Job LinVB 28:4  Basili kopasola nzela mosika na mboka ya bato, o bisika moto moko akolekaka te : bakokitaka na nsinga o esika moto akokomaka te.
Job LinVB 28:5  Mabelé maye makobotaka mbuma ya mampa, mabebi epai ya nse, esika móto mopeli.
Job LinVB 28:6  Mabanga make ma motuya mabombami o mabanga manene, mabelé masangani na wolo makozwama bobele kuna.
Job LinVB 28:7  Mpongo eyebi bisika bina te, mpe engondo ekoki komono byango na miso te.
Job LinVB 28:8  Nyama ya zamba ikoki kokoma kuna te, ata nkosi atii makolo kuna naino te.
Job LinVB 28:9  Kasi bato bapasoli mabanga mana makasi, batimoli mabulu mosika o kati ya ngomba.
Job LinVB 28:10  O kati ya mabanga bapasoli nzela lokola balabala, mpe bamoni biloko binso bya motuya bizali kuna.
Job LinVB 28:11  Babongoli nzela ya mai, bakaukisi maziba, mpe babimisi biloko bibombami kuna.
Job LinVB 28:12  Kasi Bwanya bokoutaka wapi, o mboka nini bakoki kozwa bwango ?
Job LinVB 28:13  Awa o nse moto moko te ayebi motuya mwa bwango, bokomonono te o mokili mwa bato.
Job LinVB 28:14  Etima ekoloba : « Ngai nazali na bwango te. » Mbu se bongo : « Epai ya ngai bozali te. »
Job LinVB 28:15  Bakoki kosomba bwango na mosolo mwa wolo te, bokozwama ata na mosolo mwa palata te.
Job LinVB 28:16  Wolo ya Ofir ekokani na bwango te, liyaka kitoko mpe libanga lya motuya se nsima.
Job LinVB 28:17  Wolo na diama bikokani na bwango motuya te, bokozwama mpo ya kopo etulami na wolo te.
Job LinVB 28:18  Mayaka manzenga na mbeki kitoko bizali se mpamba, malamu oluka mayaka te, kasi oluka Bwanya.
Job LinVB 28:19  Topaze ya Kus ezali na motuya lokola Bwanya te, ata wolo eye bapetoli ekokani na bwango te.
Job LinVB 28:20  Kasi Bwanya bokoutaka wapi mpenza ? Ndako ya Bwanya ekozwama o esika nini ?
Job LinVB 28:21  Bwanya bobombami o miso ma bato ba nse eye, ndeke ya likolo ikokuta Bwanya o nzela te.
Job LinVB 28:22  O mai bozindo mpe o mboka ya bawa bakolobaka : « Toyoki likambo lya Bwanya se na matoi. »
Job LinVB 28:23  Se Nzambe ayebi nzela ya mboka ya Bwanya, ye ayebi o mboka nini Bwanya bokofandaka,
Job LinVB 28:24  zambi ye akomonoko mokili mobimba na mpe biloko binso awa o nse.
Job LinVB 28:25  Oyo akopesaka mompepe bozito mpe akotondisaka mai o bibale,
Job LinVB 28:26  Oyo akopesaka mbula bitinda, mpe akotambwisaka mbula na minkalali,
Job LinVB 28:27  Ye azali komono Bwanya, ayebi bwango, ayebi bwango solosolo mpenza.
Job LinVB 28:28  Na nsima alobi na bato : « Bwanya bwa solo ezali kobanga Nzambe, moto wa mayele, nde oyo akokimaka mabe. »
Chapter 29
Job LinVB 29:2  Nani akozongisela ngai ntango ya kala, mikolo miye Nzambe azalaki kokengele ngai.
Job LinVB 29:3  Mwinda mwa ye mozalaki likolo lya ngai mpe azalaki kolakisa ngai nzela o kati ya mbu.
Job LinVB 29:4  Ntango nazalaki na bokasi bwa mokóló, mpe Nzambe azalaki kolinga ema ya ngai.
Job LinVB 29:5  Mokonzi wa bokasi azalaki kondimela ngai, mpe bana banso bazalaki penepene na ngai.
Job LinVB 29:6  Nazalaki kosukola makolo na malasi mpe mafuta mazalaki kobimela ngai o mabanga.
Job LinVB 29:7  O ntango ena, soko nakomi pene na ezibeli ya mboka, to natii kiti ya ngai o balabala,
Job LinVB 29:8  bilenge banso bazalaki komibenda nsima, mpe babange bazalaki koteleme mpo ya kokumisa ngai.
Job LinVB 29:9  Bankumu ba mboka batikaki masolo, bazalaki kofanda nye, loboko liboso lya monoko.
Job LinVB 29:10  Ata bakonzi babangaki koloba, lolemo lokangemi o edada.
Job LinVB 29:11  Bazalaki koyoka ngai na elikya enene, bafandaki nye mpo ’te bayoka malako ma ngai. Moto moko te akatelaki ngai maloba, maloba mana mazalaki kokotela bango moko moko. Bazalaki kozila mango lokola bakozilaka mbula, bayambaki maloba ma ngai lokola mamio o elanga. Awa nalakisaki bango elongi ya esengo, basepelaki mpenza, basepelaki mbala inso nalakisaki bango motema malamu. Nazalaki lokola mokonzi oyo alakisi bango nzela, lokola mokonzi wa basoda o kati ya bato ba ye, lokola moto ayebi kobondo mitema mya bato ba mawa. Bato bayokaki ngai, bazalaki kokumisa ngai ; baye bamonoki ngai, bazalaki kondima ngai, mpo nazalaki mobikisi wa babola bazangaki lisalisi mpe mosalisi wa bana bitike bazangaki mobateli. Bato bakomaki kobunda na liwa, bazalaki kobenisa ngai, mpe nazalaki kopesa mpiko ya sika na mwasi akufeli mobali. Nazalaki kolata bosembo lokola elamba, mpe bosolo lokola molato mpe ngabuni ya ngai. Miso ma ngai masalisaki moto wa lolanda, makolo ma ngai, moto akufa makolo. Nazalaki tata wa babola mpe molobeli wa bampaya. Nazalaki kobuka mino ma bato babe, mpe kobotolo bango biloko bayibaki. Namilobelaki : « Mokolo nakokufa lokola moto wa bomengo, nakokokisa mikolo mingi lokola zelo o libongo, zambi nazali lokola nzete eyingisi minsisa o mai, mpe na butu mamio makokitela nkasa ya nzete ya ngai. Nakozwa lisusu makasi lokola o ntango ya bolenge mpe nakobete lisusu litimbo malamu lokola kala. »
Job LinVB 29:12  Bazalaki koyoka ngai na elikya enene, bafandaki nye mpo ’te bayoka malako ma ngai. Moto moko te akatelaki ngai maloba, maloba mana mazalaki kokotela bango moko moko. Bazalaki kozila mango lokola bakozilaka mbula, bayambaki maloba ma ngai lokola mamio o elanga. Awa nalakisaki bango elongi ya esengo, basepelaki mpenza, basepelaki mbala inso nalakisaki bango motema malamu. Nazalaki lokola mokonzi oyo alakisi bango nzela, lokola mokonzi wa basoda o kati ya bato ba ye, lokola moto ayebi kobondo mitema mya bato ba mawa. Bato bayokaki ngai, bazalaki kokumisa ngai ; baye bamonoki ngai, bazalaki kondima ngai, mpo nazalaki mobikisi wa babola bazangaki lisalisi mpe mosalisi wa bana bitike bazangaki mobateli. Bato bakomaki kobunda na liwa, bazalaki kobenisa ngai, mpe nazalaki kopesa mpiko ya sika na mwasi akufeli mobali. Nazalaki kolata bosembo lokola elamba, mpe bosolo lokola molato mpe ngabuni ya ngai. Miso ma ngai masalisaki moto wa lolanda, makolo ma ngai, moto akufa makolo. Nazalaki tata wa babola mpe molobeli wa bampaya. Nazalaki kobuka mino ma bato babe, mpe kobotolo bango biloko bayibaki. Namilobelaki : « Mokolo nakokufa lokola moto wa bomengo, nakokokisa mikolo mingi lokola zelo o libongo, zambi nazali lokola nzete eyingisi minsisa o mai, mpe na butu mamio makokitela nkasa ya nzete ya ngai. Nakozwa lisusu makasi lokola o ntango ya bolenge mpe nakobete lisusu litimbo malamu lokola kala. »
Job LinVB 29:13  Bazalaki koyoka ngai na elikya enene, bafandaki nye mpo ’te bayoka malako ma ngai. Moto moko te akatelaki ngai maloba, maloba mana mazalaki kokotela bango moko moko. Bazalaki kozila mango lokola bakozilaka mbula, bayambaki maloba ma ngai lokola mamio o elanga. Awa nalakisaki bango elongi ya esengo, basepelaki mpenza, basepelaki mbala inso nalakisaki bango motema malamu. Nazalaki lokola mokonzi oyo alakisi bango nzela, lokola mokonzi wa basoda o kati ya bato ba ye, lokola moto ayebi kobondo mitema mya bato ba mawa. Bato bayokaki ngai, bazalaki kokumisa ngai ; baye bamonoki ngai, bazalaki kondima ngai, mpo nazalaki mobikisi wa babola bazangaki lisalisi mpe mosalisi wa bana bitike bazangaki mobateli. Bato bakomaki kobunda na liwa, bazalaki kobenisa ngai, mpe nazalaki kopesa mpiko ya sika na mwasi akufeli mobali. Nazalaki kolata bosembo lokola elamba, mpe bosolo lokola molato mpe ngabuni ya ngai. Miso ma ngai masalisaki moto wa lolanda, makolo ma ngai, moto akufa makolo. Nazalaki tata wa babola mpe molobeli wa bampaya. Nazalaki kobuka mino ma bato babe, mpe kobotolo bango biloko bayibaki. Namilobelaki : « Mokolo nakokufa lokola moto wa bomengo, nakokokisa mikolo mingi lokola zelo o libongo, zambi nazali lokola nzete eyingisi minsisa o mai, mpe na butu mamio makokitela nkasa ya nzete ya ngai. Nakozwa lisusu makasi lokola o ntango ya bolenge mpe nakobete lisusu litimbo malamu lokola kala. »
Job LinVB 29:14  Bazalaki koyoka ngai na elikya enene, bafandaki nye mpo ’te bayoka malako ma ngai. Moto moko te akatelaki ngai maloba, maloba mana mazalaki kokotela bango moko moko. Bazalaki kozila mango lokola bakozilaka mbula, bayambaki maloba ma ngai lokola mamio o elanga. Awa nalakisaki bango elongi ya esengo, basepelaki mpenza, basepelaki mbala inso nalakisaki bango motema malamu. Nazalaki lokola mokonzi oyo alakisi bango nzela, lokola mokonzi wa basoda o kati ya bato ba ye, lokola moto ayebi kobondo mitema mya bato ba mawa. Bato bayokaki ngai, bazalaki kokumisa ngai ; baye bamonoki ngai, bazalaki kondima ngai, mpo nazalaki mobikisi wa babola bazangaki lisalisi mpe mosalisi wa bana bitike bazangaki mobateli. Bato bakomaki kobunda na liwa, bazalaki kobenisa ngai, mpe nazalaki kopesa mpiko ya sika na mwasi akufeli mobali. Nazalaki kolata bosembo lokola elamba, mpe bosolo lokola molato mpe ngabuni ya ngai. Miso ma ngai masalisaki moto wa lolanda, makolo ma ngai, moto akufa makolo. Nazalaki tata wa babola mpe molobeli wa bampaya. Nazalaki kobuka mino ma bato babe, mpe kobotolo bango biloko bayibaki. Namilobelaki : « Mokolo nakokufa lokola moto wa bomengo, nakokokisa mikolo mingi lokola zelo o libongo, zambi nazali lokola nzete eyingisi minsisa o mai, mpe na butu mamio makokitela nkasa ya nzete ya ngai. Nakozwa lisusu makasi lokola o ntango ya bolenge mpe nakobete lisusu litimbo malamu lokola kala. »
Job LinVB 29:15  Bazalaki koyoka ngai na elikya enene, bafandaki nye mpo ’te bayoka malako ma ngai. Moto moko te akatelaki ngai maloba, maloba mana mazalaki kokotela bango moko moko. Bazalaki kozila mango lokola bakozilaka mbula, bayambaki maloba ma ngai lokola mamio o elanga. Awa nalakisaki bango elongi ya esengo, basepelaki mpenza, basepelaki mbala inso nalakisaki bango motema malamu. Nazalaki lokola mokonzi oyo alakisi bango nzela, lokola mokonzi wa basoda o kati ya bato ba ye, lokola moto ayebi kobondo mitema mya bato ba mawa. Bato bayokaki ngai, bazalaki kokumisa ngai ; baye bamonoki ngai, bazalaki kondima ngai, mpo nazalaki mobikisi wa babola bazangaki lisalisi mpe mosalisi wa bana bitike bazangaki mobateli. Bato bakomaki kobunda na liwa, bazalaki kobenisa ngai, mpe nazalaki kopesa mpiko ya sika na mwasi akufeli mobali. Nazalaki kolata bosembo lokola elamba, mpe bosolo lokola molato mpe ngabuni ya ngai. Miso ma ngai masalisaki moto wa lolanda, makolo ma ngai, moto akufa makolo. Nazalaki tata wa babola mpe molobeli wa bampaya. Nazalaki kobuka mino ma bato babe, mpe kobotolo bango biloko bayibaki. Namilobelaki : « Mokolo nakokufa lokola moto wa bomengo, nakokokisa mikolo mingi lokola zelo o libongo, zambi nazali lokola nzete eyingisi minsisa o mai, mpe na butu mamio makokitela nkasa ya nzete ya ngai. Nakozwa lisusu makasi lokola o ntango ya bolenge mpe nakobete lisusu litimbo malamu lokola kala. »
Job LinVB 29:16  Bazalaki koyoka ngai na elikya enene, bafandaki nye mpo ’te bayoka malako ma ngai. Moto moko te akatelaki ngai maloba, maloba mana mazalaki kokotela bango moko moko. Bazalaki kozila mango lokola bakozilaka mbula, bayambaki maloba ma ngai lokola mamio o elanga. Awa nalakisaki bango elongi ya esengo, basepelaki mpenza, basepelaki mbala inso nalakisaki bango motema malamu. Nazalaki lokola mokonzi oyo alakisi bango nzela, lokola mokonzi wa basoda o kati ya bato ba ye, lokola moto ayebi kobondo mitema mya bato ba mawa. Bato bayokaki ngai, bazalaki kokumisa ngai ; baye bamonoki ngai, bazalaki kondima ngai, mpo nazalaki mobikisi wa babola bazangaki lisalisi mpe mosalisi wa bana bitike bazangaki mobateli. Bato bakomaki kobunda na liwa, bazalaki kobenisa ngai, mpe nazalaki kopesa mpiko ya sika na mwasi akufeli mobali. Nazalaki kolata bosembo lokola elamba, mpe bosolo lokola molato mpe ngabuni ya ngai. Miso ma ngai masalisaki moto wa lolanda, makolo ma ngai, moto akufa makolo. Nazalaki tata wa babola mpe molobeli wa bampaya. Nazalaki kobuka mino ma bato babe, mpe kobotolo bango biloko bayibaki. Namilobelaki : « Mokolo nakokufa lokola moto wa bomengo, nakokokisa mikolo mingi lokola zelo o libongo, zambi nazali lokola nzete eyingisi minsisa o mai, mpe na butu mamio makokitela nkasa ya nzete ya ngai. Nakozwa lisusu makasi lokola o ntango ya bolenge mpe nakobete lisusu litimbo malamu lokola kala. »
Job LinVB 29:17  Bazalaki koyoka ngai na elikya enene, bafandaki nye mpo ’te bayoka malako ma ngai. Moto moko te akatelaki ngai maloba, maloba mana mazalaki kokotela bango moko moko. Bazalaki kozila mango lokola bakozilaka mbula, bayambaki maloba ma ngai lokola mamio o elanga. Awa nalakisaki bango elongi ya esengo, basepelaki mpenza, basepelaki mbala inso nalakisaki bango motema malamu. Nazalaki lokola mokonzi oyo alakisi bango nzela, lokola mokonzi wa basoda o kati ya bato ba ye, lokola moto ayebi kobondo mitema mya bato ba mawa. Bato bayokaki ngai, bazalaki kokumisa ngai ; baye bamonoki ngai, bazalaki kondima ngai, mpo nazalaki mobikisi wa babola bazangaki lisalisi mpe mosalisi wa bana bitike bazangaki mobateli. Bato bakomaki kobunda na liwa, bazalaki kobenisa ngai, mpe nazalaki kopesa mpiko ya sika na mwasi akufeli mobali. Nazalaki kolata bosembo lokola elamba, mpe bosolo lokola molato mpe ngabuni ya ngai. Miso ma ngai masalisaki moto wa lolanda, makolo ma ngai, moto akufa makolo. Nazalaki tata wa babola mpe molobeli wa bampaya. Nazalaki kobuka mino ma bato babe, mpe kobotolo bango biloko bayibaki. Namilobelaki : « Mokolo nakokufa lokola moto wa bomengo, nakokokisa mikolo mingi lokola zelo o libongo, zambi nazali lokola nzete eyingisi minsisa o mai, mpe na butu mamio makokitela nkasa ya nzete ya ngai. Nakozwa lisusu makasi lokola o ntango ya bolenge mpe nakobete lisusu litimbo malamu lokola kala. »
Job LinVB 29:18  Bazalaki koyoka ngai na elikya enene, bafandaki nye mpo ’te bayoka malako ma ngai. Moto moko te akatelaki ngai maloba, maloba mana mazalaki kokotela bango moko moko. Bazalaki kozila mango lokola bakozilaka mbula, bayambaki maloba ma ngai lokola mamio o elanga. Awa nalakisaki bango elongi ya esengo, basepelaki mpenza, basepelaki mbala inso nalakisaki bango motema malamu. Nazalaki lokola mokonzi oyo alakisi bango nzela, lokola mokonzi wa basoda o kati ya bato ba ye, lokola moto ayebi kobondo mitema mya bato ba mawa. Bato bayokaki ngai, bazalaki kokumisa ngai ; baye bamonoki ngai, bazalaki kondima ngai, mpo nazalaki mobikisi wa babola bazangaki lisalisi mpe mosalisi wa bana bitike bazangaki mobateli. Bato bakomaki kobunda na liwa, bazalaki kobenisa ngai, mpe nazalaki kopesa mpiko ya sika na mwasi akufeli mobali. Nazalaki kolata bosembo lokola elamba, mpe bosolo lokola molato mpe ngabuni ya ngai. Miso ma ngai masalisaki moto wa lolanda, makolo ma ngai, moto akufa makolo. Nazalaki tata wa babola mpe molobeli wa bampaya. Nazalaki kobuka mino ma bato babe, mpe kobotolo bango biloko bayibaki. Namilobelaki : « Mokolo nakokufa lokola moto wa bomengo, nakokokisa mikolo mingi lokola zelo o libongo, zambi nazali lokola nzete eyingisi minsisa o mai, mpe na butu mamio makokitela nkasa ya nzete ya ngai. Nakozwa lisusu makasi lokola o ntango ya bolenge mpe nakobete lisusu litimbo malamu lokola kala. »
Job LinVB 29:19  Bazalaki koyoka ngai na elikya enene, bafandaki nye mpo ’te bayoka malako ma ngai. Moto moko te akatelaki ngai maloba, maloba mana mazalaki kokotela bango moko moko. Bazalaki kozila mango lokola bakozilaka mbula, bayambaki maloba ma ngai lokola mamio o elanga. Awa nalakisaki bango elongi ya esengo, basepelaki mpenza, basepelaki mbala inso nalakisaki bango motema malamu. Nazalaki lokola mokonzi oyo alakisi bango nzela, lokola mokonzi wa basoda o kati ya bato ba ye, lokola moto ayebi kobondo mitema mya bato ba mawa. Bato bayokaki ngai, bazalaki kokumisa ngai ; baye bamonoki ngai, bazalaki kondima ngai, mpo nazalaki mobikisi wa babola bazangaki lisalisi mpe mosalisi wa bana bitike bazangaki mobateli. Bato bakomaki kobunda na liwa, bazalaki kobenisa ngai, mpe nazalaki kopesa mpiko ya sika na mwasi akufeli mobali. Nazalaki kolata bosembo lokola elamba, mpe bosolo lokola molato mpe ngabuni ya ngai. Miso ma ngai masalisaki moto wa lolanda, makolo ma ngai, moto akufa makolo. Nazalaki tata wa babola mpe molobeli wa bampaya. Nazalaki kobuka mino ma bato babe, mpe kobotolo bango biloko bayibaki. Namilobelaki : « Mokolo nakokufa lokola moto wa bomengo, nakokokisa mikolo mingi lokola zelo o libongo, zambi nazali lokola nzete eyingisi minsisa o mai, mpe na butu mamio makokitela nkasa ya nzete ya ngai. Nakozwa lisusu makasi lokola o ntango ya bolenge mpe nakobete lisusu litimbo malamu lokola kala. »
Job LinVB 29:20  Bazalaki koyoka ngai na elikya enene, bafandaki nye mpo ’te bayoka malako ma ngai. Moto moko te akatelaki ngai maloba, maloba mana mazalaki kokotela bango moko moko. Bazalaki kozila mango lokola bakozilaka mbula, bayambaki maloba ma ngai lokola mamio o elanga. Awa nalakisaki bango elongi ya esengo, basepelaki mpenza, basepelaki mbala inso nalakisaki bango motema malamu. Nazalaki lokola mokonzi oyo alakisi bango nzela, lokola mokonzi wa basoda o kati ya bato ba ye, lokola moto ayebi kobondo mitema mya bato ba mawa. Bato bayokaki ngai, bazalaki kokumisa ngai ; baye bamonoki ngai, bazalaki kondima ngai, mpo nazalaki mobikisi wa babola bazangaki lisalisi mpe mosalisi wa bana bitike bazangaki mobateli. Bato bakomaki kobunda na liwa, bazalaki kobenisa ngai, mpe nazalaki kopesa mpiko ya sika na mwasi akufeli mobali. Nazalaki kolata bosembo lokola elamba, mpe bosolo lokola molato mpe ngabuni ya ngai. Miso ma ngai masalisaki moto wa lolanda, makolo ma ngai, moto akufa makolo. Nazalaki tata wa babola mpe molobeli wa bampaya. Nazalaki kobuka mino ma bato babe, mpe kobotolo bango biloko bayibaki. Namilobelaki : « Mokolo nakokufa lokola moto wa bomengo, nakokokisa mikolo mingi lokola zelo o libongo, zambi nazali lokola nzete eyingisi minsisa o mai, mpe na butu mamio makokitela nkasa ya nzete ya ngai. Nakozwa lisusu makasi lokola o ntango ya bolenge mpe nakobete lisusu litimbo malamu lokola kala. »
Job LinVB 29:21  Bazalaki koyoka ngai na elikya enene, bafandaki nye mpo ’te bayoka malako ma ngai. Moto moko te akatelaki ngai maloba, maloba mana mazalaki kokotela bango moko moko. Bazalaki kozila mango lokola bakozilaka mbula, bayambaki maloba ma ngai lokola mamio o elanga. Awa nalakisaki bango elongi ya esengo, basepelaki mpenza, basepelaki mbala inso nalakisaki bango motema malamu. Nazalaki lokola mokonzi oyo alakisi bango nzela, lokola mokonzi wa basoda o kati ya bato ba ye, lokola moto ayebi kobondo mitema mya bato ba mawa. Bato bayokaki ngai, bazalaki kokumisa ngai ; baye bamonoki ngai, bazalaki kondima ngai, mpo nazalaki mobikisi wa babola bazangaki lisalisi mpe mosalisi wa bana bitike bazangaki mobateli. Bato bakomaki kobunda na liwa, bazalaki kobenisa ngai, mpe nazalaki kopesa mpiko ya sika na mwasi akufeli mobali. Nazalaki kolata bosembo lokola elamba, mpe bosolo lokola molato mpe ngabuni ya ngai. Miso ma ngai masalisaki moto wa lolanda, makolo ma ngai, moto akufa makolo. Nazalaki tata wa babola mpe molobeli wa bampaya. Nazalaki kobuka mino ma bato babe, mpe kobotolo bango biloko bayibaki. Namilobelaki : « Mokolo nakokufa lokola moto wa bomengo, nakokokisa mikolo mingi lokola zelo o libongo, zambi nazali lokola nzete eyingisi minsisa o mai, mpe na butu mamio makokitela nkasa ya nzete ya ngai. Nakozwa lisusu makasi lokola o ntango ya bolenge mpe nakobete lisusu litimbo malamu lokola kala. »
Job LinVB 29:22  Bazalaki koyoka ngai na elikya enene, bafandaki nye mpo ’te bayoka malako ma ngai. Moto moko te akatelaki ngai maloba, maloba mana mazalaki kokotela bango moko moko. Bazalaki kozila mango lokola bakozilaka mbula, bayambaki maloba ma ngai lokola mamio o elanga. Awa nalakisaki bango elongi ya esengo, basepelaki mpenza, basepelaki mbala inso nalakisaki bango motema malamu. Nazalaki lokola mokonzi oyo alakisi bango nzela, lokola mokonzi wa basoda o kati ya bato ba ye, lokola moto ayebi kobondo mitema mya bato ba mawa. Bato bayokaki ngai, bazalaki kokumisa ngai ; baye bamonoki ngai, bazalaki kondima ngai, mpo nazalaki mobikisi wa babola bazangaki lisalisi mpe mosalisi wa bana bitike bazangaki mobateli. Bato bakomaki kobunda na liwa, bazalaki kobenisa ngai, mpe nazalaki kopesa mpiko ya sika na mwasi akufeli mobali. Nazalaki kolata bosembo lokola elamba, mpe bosolo lokola molato mpe ngabuni ya ngai. Miso ma ngai masalisaki moto wa lolanda, makolo ma ngai, moto akufa makolo. Nazalaki tata wa babola mpe molobeli wa bampaya. Nazalaki kobuka mino ma bato babe, mpe kobotolo bango biloko bayibaki. Namilobelaki : « Mokolo nakokufa lokola moto wa bomengo, nakokokisa mikolo mingi lokola zelo o libongo, zambi nazali lokola nzete eyingisi minsisa o mai, mpe na butu mamio makokitela nkasa ya nzete ya ngai. Nakozwa lisusu makasi lokola o ntango ya bolenge mpe nakobete lisusu litimbo malamu lokola kala. »
Job LinVB 29:23  Bazalaki koyoka ngai na elikya enene, bafandaki nye mpo ’te bayoka malako ma ngai. Moto moko te akatelaki ngai maloba, maloba mana mazalaki kokotela bango moko moko. Bazalaki kozila mango lokola bakozilaka mbula, bayambaki maloba ma ngai lokola mamio o elanga. Awa nalakisaki bango elongi ya esengo, basepelaki mpenza, basepelaki mbala inso nalakisaki bango motema malamu. Nazalaki lokola mokonzi oyo alakisi bango nzela, lokola mokonzi wa basoda o kati ya bato ba ye, lokola moto ayebi kobondo mitema mya bato ba mawa. Bato bayokaki ngai, bazalaki kokumisa ngai ; baye bamonoki ngai, bazalaki kondima ngai, mpo nazalaki mobikisi wa babola bazangaki lisalisi mpe mosalisi wa bana bitike bazangaki mobateli. Bato bakomaki kobunda na liwa, bazalaki kobenisa ngai, mpe nazalaki kopesa mpiko ya sika na mwasi akufeli mobali. Nazalaki kolata bosembo lokola elamba, mpe bosolo lokola molato mpe ngabuni ya ngai. Miso ma ngai masalisaki moto wa lolanda, makolo ma ngai, moto akufa makolo. Nazalaki tata wa babola mpe molobeli wa bampaya. Nazalaki kobuka mino ma bato babe, mpe kobotolo bango biloko bayibaki. Namilobelaki : « Mokolo nakokufa lokola moto wa bomengo, nakokokisa mikolo mingi lokola zelo o libongo, zambi nazali lokola nzete eyingisi minsisa o mai, mpe na butu mamio makokitela nkasa ya nzete ya ngai. Nakozwa lisusu makasi lokola o ntango ya bolenge mpe nakobete lisusu litimbo malamu lokola kala. »
Job LinVB 29:24  Bazalaki koyoka ngai na elikya enene, bafandaki nye mpo ’te bayoka malako ma ngai. Moto moko te akatelaki ngai maloba, maloba mana mazalaki kokotela bango moko moko. Bazalaki kozila mango lokola bakozilaka mbula, bayambaki maloba ma ngai lokola mamio o elanga. Awa nalakisaki bango elongi ya esengo, basepelaki mpenza, basepelaki mbala inso nalakisaki bango motema malamu. Nazalaki lokola mokonzi oyo alakisi bango nzela, lokola mokonzi wa basoda o kati ya bato ba ye, lokola moto ayebi kobondo mitema mya bato ba mawa. Bato bayokaki ngai, bazalaki kokumisa ngai ; baye bamonoki ngai, bazalaki kondima ngai, mpo nazalaki mobikisi wa babola bazangaki lisalisi mpe mosalisi wa bana bitike bazangaki mobateli. Bato bakomaki kobunda na liwa, bazalaki kobenisa ngai, mpe nazalaki kopesa mpiko ya sika na mwasi akufeli mobali. Nazalaki kolata bosembo lokola elamba, mpe bosolo lokola molato mpe ngabuni ya ngai. Miso ma ngai masalisaki moto wa lolanda, makolo ma ngai, moto akufa makolo. Nazalaki tata wa babola mpe molobeli wa bampaya. Nazalaki kobuka mino ma bato babe, mpe kobotolo bango biloko bayibaki. Namilobelaki : « Mokolo nakokufa lokola moto wa bomengo, nakokokisa mikolo mingi lokola zelo o libongo, zambi nazali lokola nzete eyingisi minsisa o mai, mpe na butu mamio makokitela nkasa ya nzete ya ngai. Nakozwa lisusu makasi lokola o ntango ya bolenge mpe nakobete lisusu litimbo malamu lokola kala. »
Job LinVB 29:25  Bazalaki koyoka ngai na elikya enene, bafandaki nye mpo ’te bayoka malako ma ngai. Moto moko te akatelaki ngai maloba, maloba mana mazalaki kokotela bango moko moko. Bazalaki kozila mango lokola bakozilaka mbula, bayambaki maloba ma ngai lokola mamio o elanga. Awa nalakisaki bango elongi ya esengo, basepelaki mpenza, basepelaki mbala inso nalakisaki bango motema malamu. Nazalaki lokola mokonzi oyo alakisi bango nzela, lokola mokonzi wa basoda o kati ya bato ba ye, lokola moto ayebi kobondo mitema mya bato ba mawa. Bato bayokaki ngai, bazalaki kokumisa ngai ; baye bamonoki ngai, bazalaki kondima ngai, mpo nazalaki mobikisi wa babola bazangaki lisalisi mpe mosalisi wa bana bitike bazangaki mobateli. Bato bakomaki kobunda na liwa, bazalaki kobenisa ngai, mpe nazalaki kopesa mpiko ya sika na mwasi akufeli mobali. Nazalaki kolata bosembo lokola elamba, mpe bosolo lokola molato mpe ngabuni ya ngai. Miso ma ngai masalisaki moto wa lolanda, makolo ma ngai, moto akufa makolo. Nazalaki tata wa babola mpe molobeli wa bampaya. Nazalaki kobuka mino ma bato babe, mpe kobotolo bango biloko bayibaki. Namilobelaki : « Mokolo nakokufa lokola moto wa bomengo, nakokokisa mikolo mingi lokola zelo o libongo, zambi nazali lokola nzete eyingisi minsisa o mai, mpe na butu mamio makokitela nkasa ya nzete ya ngai. Nakozwa lisusu makasi lokola o ntango ya bolenge mpe nakobete lisusu litimbo malamu lokola kala. »
Chapter 30
Job LinVB 30:1  Kasi sikawa bato bazali kotiola ngai, mokóló wa bango ; natiaki batata ba bango nsima ya mbwa ya ngai, iye izalaki kokengele bibwele bya ngai.
Job LinVB 30:2  Bakokaki kopesa ngai maboko te, zambi bokasi bwa bango bosila kala.
Job LinVB 30:3  Nzala mpe mpasi ilembisaki bango, bazalaki kolia matiti mpamba ma esobe ;
Job LinVB 30:4  bazalaki kobuka mbika o bilanga bya kala ; bilei bya bango, se minsisa mya nzete.
Job LinVB 30:5  Bato banso babenganaki bango, bawulolaki bango lokola bakowulolaka bayibi.
Job LinVB 30:6  Bakendeki kolala o mabwaku ma nsomo, o mibenga mya ngomba mpe o mabulu o kati ya mabelé.
Job LinVB 30:7  Wana balelaki o kati ya matiti lokola ngombe, mpe babombamaki o nse ya nzete ya nzube.
Job LinVB 30:8  Bazalaki bato ba mpamba baye bazangi lokumu, bato ba ekolo ya bango bazalaki kobengana bango.
Job LinVB 30:9  Bakomisi nkombo ya ngai lokola nzembo, nakomi lokola lisapo o minoko mya bango.
Job LinVB 30:10  Bayoki ngai nsomo, batelemi mosika na ngai to babwakeli ngai nsoi o elongi, nsoni te !
Job LinVB 30:11  Awa Nzambe alembisi ngai mpe abwaki ngai, balakisi ngai limemye soki te.
Job LinVB 30:12  Penepene na ngai bakomi ebele, batieli ngai mabaku mpo ’te bakweisa ngai, bamilengeli mpo bazwa nzela ya koboma ngai.
Job LinVB 30:13  Bakangeli ngai nzela bipai binso, baluki se kosukisa ngai, moto moko te ayei kosalisa ngai.
Job LinVB 30:14  Bakoti ebele o esika babuki lopango, bakimi mabanga malingi kokwela bango.
Job LinVB 30:15  Nsomo enene ekangi ngai na mbala yoko, elikya ya ngai ekimi lokola mompepe, lokumu la ngai losili lokola limpata lilimwi.
Job LinVB 30:16  Sikawa bomoi bozali kokima ngai, mikolo mya mpasi mizali koyela ngai.
Job LinVB 30:17  Na butu mpasi eyeli ngai, eswi ngai minkuwa ; ezali lokola nyama ike ikolia ngai, ikopema te.
Job LinVB 30:18  Lokola moto akangi ngai makasi na elamba, afini ngai nkingo.
Job LinVB 30:19  Abwaki ngai o kati ya potopoto, nakomi lokola mputulu ya makala.
Job LinVB 30:20  Nabeleli yo Nzambe, mpe ondimeli ngai te, natelemi o miso ma yo, otali ngai te.
Job LinVB 30:21  Okomi konyokolo ngai mingi mpenza, bokasi bwa loboko la yo bokweisi ngai.
Job LinVB 30:22  Omemi ngai na mompepe lokola likolo lya mpunda, lokola ekumbaki oningisi ngai.
Job LinVB 30:23  Nayebi solo ’te okotinda ngai o liwa, o mboka eye bato banso bakokendeke.
Job LinVB 30:24  Ngai nde naboyaki kosalisa mobola, oyo ayaki kosenge lisalisi o mpasi ya ye ?
Job LinVB 30:25  Ngai nalelaki elongo na baye bazalaki na mpasi, mpe nazalaki koyokela bango mawa.
Job LinVB 30:26  Nalukaki kozwa bolamu, nazwi se mabe, nazilaki mwinda, kasi tala molili moyei.
Job LinVB 30:27  Motema mwa ngai mozali kobete makasi ntango inso ; mokolo na mokolo mokoyela ngai mpasi.
Job LinVB 30:28  Ata natamboli na elongi mawa mawa, moto moko abondi ngai te, natelemeki o lisanga se mpo ’te nabelela.
Job LinVB 30:29  Nakomi ndeko wa minsole, nakoti o molongo mwa maligbanga.
Job LinVB 30:30  Lomposo la ngai loindi mpe lolongwi, minkuwa mya ngai miziki mpe mikauki.
Job LinVB 30:31  Nzenze ya ngai ezali koyokisa nzembo ya lilaka, mpiololo ya ngai elandi se mingongo mya baleli.
Chapter 31
Job LinVB 31:1  Napesaki miso ma ngai mobeko moye : natala elenge mwasi na miso ma boluli te.
Job LinVB 31:2  Kuna o likolo abongiseli ngai lifuta nini ? Nzambe wa bokasi abombeli ngai bolamu nini ?
Job LinVB 31:3  Akobombelaka bato bazangi bosembo mpasi te ? Makambo ma mawa, lifuta lya bato babe te ?
Job LinVB 31:4  Kasi ye akomonoko ezalela ya ngai mobimba, akolanda ngai o bisika binso nakotia makolo.
Job LinVB 31:5  Bongo, mokolo nini nalandaki nzela ya lokuta ? Mokolo nini nalingaki kokosa bato ?
Job LinVB 31:6  Tika Nzambe ameka ngai na emekeli elamu, bongo akomono ’te nazali na likambo lyoko te.
Job LinVB 31:7  Soko makolo ma ngai malongwaki o nzela elamu, soko motema mwa ngai mondimaki mambi mabe miso mamonoki, soko mbindo ekangemi na maboko ma ngai,
Job LinVB 31:8  moto mosusu alia biloko nalonaki, apikola nzete iye nalonaki.
Job LinVB 31:9  Soko o kati ya motema nalulaki mwasi wa bato, to nazalaki konongo monoko mwa ndako ya moninga,
Job LinVB 31:10  mwasi wa ngai anikela mobali mosusu fufu, mpe babali basusu bakamata ye lokola mwasi wa bango,
Job LinVB 31:11  zambi mpo ya mambi ma bosoni zuzi akokatela ngai etumbu.
Job LinVB 31:12  Mbele napelisaki móto motumbi biloko bya ngai binso, mpe mosilisi nkita ya ngai nye mpenza.
Job LinVB 31:13  Nazalaki kopesa basali babali na basi biye bikoki na bango, mpe kosamba na bango se na bosembo.
Job LinVB 31:14  Soko ezalaki bongo te, nakosala boni mokolo Nzambe akobenga ngai ? Ntango akotuna ngai, nakopesa ye eyano nini ?
Job LinVB 31:15  Nzambe se moko akelaki ngai, akelaki mpe bango, se ye moko abongisaki biso o libumu lya mama.
Job LinVB 31:16  Mokolo nini napimaki babola eloko ? Mwasi akufeli mobali abondelaki ngai nde mpamba ?
Job LinVB 31:17  Nazalaki nde kolia mampa bobele ngai moko, mpe naboyaki kokabela bana batike ?
Job LinVB 31:18  Ut’o bomwana Nzambe abokoli ngai lokola tata, yango wana, ut’o libumu lya mama, nazalaki kobatela bango.
Job LinVB 31:19  Ná mobola azangaki elamba, ná moto wa mawa azalaki na bolangiti te,
Job LinVB 31:20  batondi ngai na motema monso, mpo nalatisi bango mposo ya mpata.
Job LinVB 31:21  Soko nabeteki ata mbala yoko mwana etike mbata, mpo nayebani na bazuzi baye bakolongisa ngai,
Job LinVB 31:22  lipeke lya ngai likoki kokabwana na nkingo, mpe loboko lokoki kokatana na biteni bibale !
Job LinVB 31:23  Solo, nazalaki kobanga etumbu ya Nzambe, mpo nakoki na bonene bwa ye te.
Job LinVB 31:24  Natiaki nde motema na wolo ? Nalobaki mokolo moko : nakobika na yango ?
Job LinVB 31:25  Nasepelaki nde mpo nazalaki na biloko biike, to mpo nazwaki mosolo mingi na maboko ma ngai ?
Job LinVB 31:26  Ntango namonoki mwese mozalaki kongenge kitoko, mpe namonoki sanza ezalaki kongala makasi,
Job LinVB 31:27  o motema nandimaki nde lisenginya lya kokumisa yango, loboko liboso lya monoko ?
Job LinVB 31:28  Mbele zuzi akotumbola ngai mpo ya likambo lina ; soko nasalaki bongo, nawanganaki Nzambe wa likolo.
Job LinVB 31:29  Nasepelaki nde liwa lya banguna ba ngai, to nayokaki esengo o ntango bazalaki na mpasi ?
Job LinVB 31:30  Ngai moto nandimaki kosala masumu na monoko te, nakanela moninga ’te akufa, solo ?
Job LinVB 31:31  Baye tozalaki na bango ndako yoko bakokaki koloba : « Nani aliaki naino nyama te » ?
Job LinVB 31:32  Mouta ata moko te alalaki o libanda, natikelaki moto wa mobembo ndako polele.
Job LinVB 31:33  Nabombaki nde masumu ma ngai lokola Adamu asalaki ? Nabombaki nde mabe ma ngai o kati ya motema ?
Job LinVB 31:34  Nabangaki nde bilobaloba bya bato ? Soko nabangaki ’te bandeko baseke ngai, mbele nakangaki monoko mpe nabimaki o ndako lisusu te.
Job LinVB 31:35  E ngai e, nasala nini mpo ’te bato bayoka ngai ? Nalobi, esili ! Sikawa Nzambe ayanola ngai ! Soko monguna akomaki monkanda mwa bofundi ngai,
Job LinVB 31:36  mbele namemeki mwango awa, to nalataki mwango lokola enkoti ya lokumu.
Job LinVB 31:37  Solo, nakolakisa ye makambo nasali, nakobeleme na ye lokola mwana wa mokonzi. Maloba ma Yob masili se bongo.
Job LinVB 31:38  Soko nakataki mabelé malamu te, mpe bikokaki kobota mbuma mingi te,
Job LinVB 31:39  soko naliaki mbuma ya mabelé, iye nafutaki te, soko nabomaki nkolo wa mabelé na nzala,
Job LinVB 31:40  malamu, nzube ikola o esika ya mbuma ya mampa, mpe matiti mabe o esika ya loso.
Chapter 32
Job LinVB 32:1  Na nsima bato baye basato batiki koyanola Yob, zambi akanisi bobele ’te azali moto se­mba.
Job LinVB 32:2  Kasi Eliu, mwana wa Barakel, moto wa Buz, wa etuka ya Ram, asiliki. Asilikeli Yob mingi, zambi Yob akanisi ’te alongi o miso ma Nzambe.
Job LinVB 32:3  Asilikeli mpe bani­nga basato, mpo bazalaki na eyano ya solo te, mpe bakokaki kondimisa Yob te ’te asalaki mabe.
Job LinVB 32:4  Liboso Eliu alobaki eloko te, mpo baninga bazalaki bakolo ba ye.
Job LinVB 32:5  Kasi awa amoni ’te moko wa bango basato akoki koyanola eloko te, akomi koyoka nkanda.
Job LinVB 32:6  Na nsima Eliu, mwana wa Barakel, moto wa Buz, alobi : Ngai nazali se mwana, bino bozali bakolo, yango wana nabangaki kolakisa bino mayele ma ngai.
Job LinVB 32:7  Nakanisaki : « Tika bakolo báloba, balakisa biso bwanya. »
Job LinVB 32:8  Nzokande mayele makouta na elimo, mpema ya Nzambe wa bokasi ekopesa moto bwanya.
Job LinVB 32:9  Bokóló bokopesa moto bwanya te, babange banso bayebi mibeko mya bosembo te.
Job LinVB 32:10  Yango wana nasengi bino : boyoka ngai, ngai mpe nalingi koyebisa bino mayele ma ngai.
Job LinVB 32:11  Ya solo, nazalaki na elikya ’te bokoloba malamu, natiaki matoi mpenza na mayele ma bino, nayoka maloba nini bokozongisela ye.
Job LinVB 32:12  Nalandaki bino malamu mpenza, kasi ata moko ayanolaki Yob malamu te, ata moko akweisaki ye na maloba ma ye te.
Job LinVB 32:13  Bongo boloba te ’te : « Tokutani na moto wa bwanya, toyoki mateya ma Nzambe, ma bato te. »
Job LinVB 32:14  Yob alobaki makambo ma ye na ngai te, ngai nakoyanola ye na mayele ma bino te.
Job LinVB 32:15  Tala bango wana, basuki, bazangi eyano, maloba manso masili o monoko mwa bango.
Job LinVB 32:16  Nazalaki kozila bango baloba, kasi batiki, bakoki koyanola lisusu eloko te.
Job LinVB 32:17  Sikawa ngai moto nakopesa bango eyano, ngai mpe nakolakisa bango mayele ma ngai.
Job LinVB 32:18  Nazali na maloba maike, natondi na mango o motema.
Job LinVB 32:19  Nayoki libumu lokola nameli vino ya sika mingi, eye elingi kopasola ata libenga lya sika.
Job LinVB 32:20  Yango wana nakoloba mpo ’te nazwa mpema, nakofungola monoko mpo ’te nazongisa maloba.
Job LinVB 32:21  Ngai nakotala bilongi bya bato te, nakobondela moto moko te.
Job LinVB 32:22  Ya solo, naluki kosepelisa moto te, soko nameki, Mozalisi akosukisa ngai noki.
Chapter 33
Job LinVB 33:1  A Yob, ndima koyoka maloba ma ngai, tia matoi na maloba ma ngai manso.
Job LinVB 33:2  Yoka ngai oyo nabandi koloba, lolemu loningani o kati ya monoko.
Job LinVB 33:3  Nakoloba se na motema bosembo mpenza, monoko mwa ngai mokosakola se makambo ma solo.
Job LinVB 33:4  Bobele mpema ya Nzambe epesi ngai bomoi, se Nzambe wa bokasi akobatelaka ngai.
Job LinVB 33:5  Soko okoki, oyanola ngai, omilengele mpo tomekana biso na yo.
Job LinVB 33:6  Tala, o miso ma Nzambe biso na yo tokokani, nakelami na mabelé lokola yo.
Job LinVB 33:7  Bongo, ntina obanga ngai ezali te, ondima te ’te nakangisa yo monoko.
Job LinVB 33:8  Boniboni okokaki koloba na ngai, solo, nayoki yango malamu :
Job LinVB 33:9  « Motema mozali peto, nasali lisumu lyoko te, nazali na mbindo te, na likambo lyoko te.
Job LinVB 33:10  Kasi Nzambe afundi ngai se mpamba, atali ngai lokola monguna wa ye.
Job LinVB 33:11  Akangi makolo ma ngai na minyololo, akengeli ngai bisika binso nazali kokende ? »
Job LinVB 33:12  Solo, nalobi na yo : Olongi te, zambi Nzambe aleki bato na bonene.
Job LinVB 33:13  Mpo nini ozali kowela ntembe na ye ? Mpo ayanoli ata motuna moko mwa yo te ?
Job LinVB 33:14  Nzokande Nzambe azali koloba na biso mbala na mbala, kasi tokokebaka te.
Job LinVB 33:15  Azali koloba na ndoto to na limoni lya butu, o ntango mpongi ekangi bato makasi, o ntango bato balali o mbeto ya bango.
Job LinVB 33:16  O ntango ena akoya kofungola matoi ma bango mpe akoyokisa makebisi alingi kokebisa bango,
Job LinVB 33:17  mpo ’te moto atika misala mibe minso, atika mpe lolendo la ye.
Job LinVB 33:18  Akokebisaka bongo moto na liwa, mpe akosalisaka ye asuka o bozindo bwa libulu te.
Job LinVB 33:19  Mbala esusu akokebisa ye na mpasi o mbeto ; ntango molunge mozali kolengisa nzoto ya ye,
Job LinVB 33:20  ayoki mposa ya kolia lisusu te mpe aboyi ata biloko elengi.
Job LinVB 33:21  Bato banso bamoni ’te azali kokondo, minkuwa mizalaki komonono te mibimi polele.
Job LinVB 33:22  Akomi penepene na libulu, bomoi bwa ye bokomi pene na mboka ya bawa.
Job LinVB 33:23  O ntango ena anzelu molobeli atelemi pene na ye, mosalisi aponomi o ntei ya banzelu nkoto yoko, oyo akolakisa ye nzela nini asengeli kolanda,
Job LinVB 33:24  oyo akoki koyokela ye mawa mpe koloba : « Bikisa ye akita o libulu te, namoni maye makoki kosikola ye ! »
Job LinVB 33:25  O mokolo mona akozwa lisusu bokasi bwa bolenge, akozongela bonzenga bwa ye.
Job LinVB 33:26  Akosambela Nzambe mpe Nzambe akondimela ye, akomono elongi ya Nzambe mpe akosepela mingi, zambi Nzambe akofuta bato malamu manso basali.
Job LinVB 33:27  Akoyemba o miso ma bato mpe akoloba : « Nasalaki masumu, nabukaki mibeko, kasi ye azongiseli ngai mabe te.
Job LinVB 33:28  Asikoli molimo mwa ngai nakita o libulu te, mwinda mokongengele ngai lisusu. »
Job LinVB 33:29  Solo, Nzambe akosalaka moto bongo, mbala ibale to mbala isato,
Job LinVB 33:30  mpo ’te abikisa ye o libulu mpe mwinda mwa bomoi mongengele ye.
Job LinVB 33:31  Keba, Yob, yoka ngai malamu, kanga monoko, naloba naino.
Job LinVB 33:32  Soko ozali na mwa liloba, yanola ngai, loba, zambi nalingi kolongisa yo.
Job LinVB 33:33  Soki te, ndima koyoka ngai, fanda nye, nakolakisa yo bwanya bwa solo.
Chapter 34
Job LinVB 34:2  Bino bato ba bwanya, boyoka maloba ma ngai, bino bato ba mayele, botia matoi,
Job LinVB 34:3  zambi litoi likoyoka elengi ya maloba, lokola edada ekomeka elengi ya bilei.
Job LinVB 34:4  Toyokana sikawa nini ezali semba, tomeka koyeba eloko nini ezali malamu.
Job LinVB 34:5  Yob alobaki : « Nazali na likambo lyoko te, kasi Nzambe aboyi kondima yango.
Job LinVB 34:6  Akosalaka ngai malamu te ; na makula ma ye akozokisaka ngai, ata nasali lisumu te. »
Job LinVB 34:7  Epai wapi okozwa moto lokola Yob, oyo ameseni na lofundo lokola moto akomeleke mai ?
Job LinVB 34:8  Akotambolaka nzela yoko na bato babe, mpe alingi bobele nzela ya basumuki.
Job LinVB 34:9  Alobi : « Koluka boyokani na Nzambe ezali na ntina te. »
Job LinVB 34:10  Bongo, bino bato ba mayele, boyoka ngai : Nzambe akosalaka mabe soki te ; Mokonzi wa bokasi azangi bosembo te.
Job LinVB 34:11  Akofutaka bato engebene na misala mya bango, akokataka makambo ma bango se na bosembo.
Job LinVB 34:12  Ya solo, Nzambe akosalaka mabe moko te, Mokonzi wa bokasi akobongolaka bosembo te.
Job LinVB 34:13  Nani moto apesaki ye bokonzi bwa nse ? Nani atindaki ye ayangela mokili mobimba ?
Job LinVB 34:14  Soko Nzambe azalaki se komikanisa mpe kopima bato mpema ya ye,
Job LinVB 34:15  mbele bato banso bakufaki na mbala yoko, mbele banso bakomaki mabelé lisusu.
Job LinVB 34:16  Bongo, yoka, yo moto wa mayele, tia matoi na maye nakoyebisa yo.
Job LinVB 34:17  Nzambe akokaki koyangela binso, soko azangaki bosembo ? Okoki kokitisa Oyo aleki bato banso na bosembo ?
Job LinVB 34:18  Ye akoki kotanga mokonzi wa ekolo ‘moto mpamba’, mpe kotala bankumu lokola bato babe.
Job LinVB 34:19  Akobondelaka bato banene te, akotalaka moto wa nkita na mobola ndenge se yoko, mpo banso bazali mosala mwa maboko ma ye.
Job LinVB 34:20  Bakoki kokufa na mbala yoko na butu : ata bato banene bakoki kolimwa bongo ; ye akoki kolongola monyokoli o bokonzi, mpasi te.
Job LinVB 34:21  Mpo Nzambe akotalaka bizalela bya bato, ayebi nzela ya bango inso.
Job LinVB 34:22  Ezali na butu to na molili, bato bakoki kobombama o miso ma ye te.
Job LinVB 34:23  Soko alingi kobyanga moto mpo ’te asambisa ye, asengeli kolaka ye mokolo te :
Job LinVB 34:24  akoki kolongola baye bazali na bokonzi, kotuna te, mpe kofandisa basusu o esika ya bango,
Job LinVB 34:25  mpo ayebi misala mya bango minso ; o butu yoko bakwei mpe banyatami.
Job LinVB 34:26  Akoki kobete bango fimbo lokola bato babe, o miso ma bato banso,
Job LinVB 34:27  soko balandaki nzela ya bango moko, mpe batosaki ye te.
Job LinVB 34:28  Boleli bwa babola bokokomaka tee o matoi ma Nzambe, akoyokaka boleli bwa bato ba mawa.
Job LinVB 34:29  Soko atikali nye mpe asali eloko te, nani akomono ye mabe ? Soko amibombi, nani akosambisa ye ?
Job LinVB 34:30  Akokengeleke bato ba bikolo binso, alingi te ’te monyokoli azala mokonzi.
Job LinVB 34:31  Soko alobi na Nzambe : « Nabungaki, nakosala mabe lisusu te ;
Job LinVB 34:32  lakisa ngai maye nasengeli kosala ; nazangaki bosembo, nakozongela yango lisusu te » ?
Job LinVB 34:33  Bongo Nzambe akopesa ye etumbu ? Okanisi nini ? Loba ko, yo moto oboyi maloba ma ye ma bopaleli, mpe okanisi ’te oyebi manso ! Ngai nakoloba eloko te.
Job LinVB 34:34  Mbele bato ba mayele bakoloba na ngai, na mpe moto nyonso wa bwanya azali koyoka ngai :
Job LinVB 34:35  « Esopa oyo Yob ayebi eloko te, maloba ma ye mazangi ntina.
Job LinVB 34:36  Batuna Yob malamu mpenza, mpo akopesaka biyano lokola moto aboya Nzambe.
Job LinVB 34:37  Kutu, ayoki lolendo na maloba ma ye ma botombokeli Nzambe, mpe o miso ma biso awangani mabe ma ye. »
Chapter 35
Job LinVB 35:2  Okanisi solo ’te yo moto olongi, awa olobi : « Nazali moto semba o miso ma Nzambe »,
Job LinVB 35:3  mpe : « Lisumu lya ngai likosala ye nini » ?
Job LinVB 35:4  Ngai oyo nakozongisela yo eyano, baninga ba yo mpe bayoka yango.
Job LinVB 35:5  Tombola miso likolo mpe tala : tala mampata maleki motó mwa yo mosika.
Job LinVB 35:6  Solo, lisumu lya yo likosala ye mabe te ? Ata osali mabe nini, ekosala ye nini ?
Job LinVB 35:7  Se bongo, na malamu maye osali okopesa ye litomba nini ? Eloko nini okoki kopesa ye ?
Job LinVB 35:8  Mabe ma yo makoki koyokisa se bato mpasi, bosembo bwa yo bokosalisa se baninga ba yo.
Job LinVB 35:9  Bato bakomilelaka soko minyoko mileki, bakolukaka lisalisi soko bato banene bayokisi bango mpasi.
Job LinVB 35:10  Bakolobaka nde : « Wapi Nzambe oyo akelaki biso, Oyo akoyokisaka nzembo ya esengo o kati ya butu,
Job LinVB 35:11  Oyo akopesaka biso mayele, leka mayele ma nyama mpe ma ndeke ? »
Job LinVB 35:12  Yango wana, ata babeleli ye, akoyanola bango te, mpo baleki lofundo.
Job LinVB 35:13  Nzambe aboyi koyoka maloba mazangi ntina, Mokonzi wa bokasi akotiela bango matoi te.
Job LinVB 35:14  Boni okoki koloba : « Namoni Nzambe te, nabimisi likambo lya ngai mpe nazali se kozila ye » ?
Job LinVB 35:15  To mpe : « Ata mpo ya nkanda ya ye, akopesa ngai etumbu te, atali matumoli ma ngai se mpamba. »
Job LinVB 35:16  Yango elakisi ’te Yob azalaki kofungola monoko se mpamba mpe koloba maloba mazangi ntina.
Chapter 36
Job LinVB 36:2  Kanga motema, nakoyokisa yo makambo masusu Nzambe alingi koyebisa yo.
Job LinVB 36:3  Nakokende koluka mayele ma ngai mosika mpo ’te nalongisa Oyo akelaki ngai.
Job LinVB 36:4  Solo, monoko mwa ngai mokokosaka te, moto wa bwanya bwa solo azali kosolola na yo.
Job LinVB 36:5  Nzambe aleki bokasi, kasi akokinolaka moto wa motema peto te.
Job LinVB 36:6  Alingi bato babe baumela na bomoi te, kasi akobatelaka babola.
Job LinVB 36:7  Akotalaka moto semba ntango inso, akofandisaka bango o ngwende elongo na bakonzi, akobombela bango esika ya seko ! Kasi soko bakomi na lolendo,
Job LinVB 36:8  bakokangema na minyololo mpe na nsinga ikoyokisa bango mpasi.
Job LinVB 36:9  Nzambe akopalela bango bongo mpo ya ezalela ya bango mpe akolakisa bango masumu ma bango ma lolendo.
Job LinVB 36:10  Akokebisa bango bongo mpo ’te batika mabe ma bango.
Job LinVB 36:11  Soko bayoki mpe bandimi kotosa ye, bakosukisa mikolo mya bango na bomengo, mpe mibu mya bango mikosila na nsai.
Job LinVB 36:12  Kasi soko bayoki te, bakokufa na mbalakaka, mpo batiaki matoi na ye te.
Job LinVB 36:13  Motema libanga bazali se kobomba nkanda mpe basambeli te awa Nzambe akokanga bango na nsinga ;
Job LinVB 36:14  bomoi bwa bango bokosila o bolenge, mpe bakokufa noki, na nsoni.
Job LinVB 36:15  Kasi akobikisa moto mobola mpo ya bobola bwa ye, na mpasi ayoki, Nzambe azali kokebisa ye.
Job LinVB 36:16  Se bongo Nzambe alingi kobikisa yo o mpasi : liboso osepelaki na biloko ndelo te, meza ya yo etondaki na bilei biike bipusi elengi.
Job LinVB 36:17  Obangaki kokitisa bato babe mpe kolongisa bana bitike.
Job LinVB 36:18  Keba ’te omikosa te na boike bwa biloko mpe na makabo mazangi bosembo !
Job LinVB 36:19  Nkita ya yo ebele ekobikisa yo te, wolo ya yo te, makasi ma yo mpe te.
Job LinVB 36:20  Otia elikya ya yo te na butu boye, mokolo bato banso ba mokili bakosila.
Job LinVB 36:21  Omeka mpe te kolanda bato bazanga bosembo, yango nde ntina ya mpasi ozali koyoka.
Job LinVB 36:22  Nzambe aleki binso mpo ya nguya ya ye, mokonzi moko akoki na ye te.
Job LinVB 36:23  Nani akolakisa ye nzela eye alanda ? Nani akoki koloba na ye : « Osali mabe ? »
Job LinVB 36:24  Yo mpe obosana te kokumisa ye mpo ya bikela bya ye, biye bato banso bakokumisaka na nzembo.
Job LinVB 36:25  Bato banso ba nse bakokamwa na mosala mwa ye, ata baye bakozalaka mosika, bakomonoko mwango.
Job LinVB 36:26  Solo, Nzambe azali monene, biso toyebi eloko te. Moto moko te akoki kotanga mibu Nzambe akokisi.
Job LinVB 36:27  Ye akosangisaka mai ma likolo, mpe akotangisaka mango matanga lokola mbula.
Job LinVB 36:28  Mampata ma likolo makotangisaka mango, mpe makosopaka mango o nse mobimba.
Job LinVB 36:29  Nani ayebi boniboni mampata makotambolaka ? Nani ayebi boniboni nkake ekobeteke kuna ?
Job LinVB 36:30  Akobetisaka nkake likolo lya mampata, mpe akozipaka bozindo bwa mbu enene.
Job LinVB 36:31  Akoleisaka bato bongo, mpe akokabelaka bango biloko ebele.
Job LinVB 36:32  O maboko ma ye akosimbaka minkalali mpe akotindaka myango o bisika alingi.
Job LinVB 36:33  Ntango lokito la nkake loyebisi boyei bwa yango, etonga eyebi ’te ekumbaki ekomi pene.
Chapter 37
Job LinVB 37:1  Emoni ngai bongo, nakomi kolenge, mpe motema mokomi kobete makasi lokola molingi kobima.
Job LinVB 37:2  Boyoka naino mongongo makasi mwa Nzambe, boyoka makeléle makobimaka o monoko mwa ye.
Job LinVB 37:3  Akoyokisaka mango bipai binso o likolo, minkalali mya ye mikokendeke o nse mobimba.
Job LinVB 37:4  Na nsima, lokito lokoyokanaka makasi, ye mokonzi monene azali koloba na mongongo monene. Awa ayokisi mongongo mwa ye bongo, atambwisi mpe minkalali mya ye.
Job LinVB 37:5  Nzambe akosalaka makamwisi ma ye na mongongo makasi, bikela biye binene bileki mayele ma biso.
Job LinVB 37:6  Soko alobi na mbula ya mpembe : « Kweya o nse ! » mpe na mbula : « Bete makasi ! »,
Job LinVB 37:7  bato banso batiki mosala mwa bango mpo ’te bandima bikela bya ye.
Job LinVB 37:8  Nyama ya zamba ikei koluka esika ya kolala, mpe kobombama o kati ya mabulu.
Job LinVB 37:9  Na nsima ekumbaki ebimi o esika ezalaki, mpe mompepe moyokisi mpio makasi.
Job LinVB 37:10  Mpema ya Nzambe ekangisi mai mabongwana, makoma makasi lokola libanga.
Job LinVB 37:11  Ebimi moi, mampata manso makolongwa, mampata mayaki na nkake makopanzana.
Job LinVB 37:12  Ye moto akotambwisaka mango bipai binso mpo ’te masala mosala lokola ye alingi, o mokili mobimba, se lokola ye atindi.
Job LinVB 37:13  Apesa etumbu to bolamu, manso mazali se mosala mwa mampata ma ye.
Job LinVB 37:14  E Yob, yoka mango malamu, fanda nye mpe tala makamwisi ma Nzambe.
Job LinVB 37:15  Boniboni Nzambe akotindaka mango, oyebi ? Boniboni akongengisa monkalali o mampata, oyebi ?
Job LinVB 37:16  Botamboli bwa mampata o likolo, oyebi ? Oyebi makamwisi manso ma bwanya bwa ye ?
Job LinVB 37:17  Yo, soko bilamba bileki molunge mingi, o ntango mokili mokauki na moi makasi,
Job LinVB 37:18  ozalaki wana mpo ’te okomisa mampata makasi, lokola bakobeteke talatala ya bibende ?
Job LinVB 37:19  Yebisa ngai makambo nini tokoki koloba na ye, awa molili molekeli biso, toyebi yango te.
Job LinVB 37:20  Likambo nazali koloba, ayoki lyango te, solo ? Maye moto azali kotinda, ayebi mango te ?
Job LinVB 37:21  Ntango esusu moi mokomonono lisusu te, zambi mampata maindo mazipi mwango, kasi na nsima mompepe moyei kolongola mango ;
Job LinVB 37:22  mpe mwinda kitoko mobimi lokola wolo epai ya Nordi, Nzambe amizingi na nkembo enene mpenza.
Job LinVB 37:23  Ye azali nta bokasi, tokoki kokoma epai ya ye te, aleki binso na bokasi mpe na bosembo, akonyokoloko moto moko te.
Job LinVB 37:24  Yango wana bato banso basengeli kobanga ye, bato ba mayele banso elongo bazali se mpamba o miso ma ye.
Chapter 38
Job LinVB 38:1  Ut’o kati ya ekumbaki, Yawe alobi na Yob :
Job LinVB 38:2  Nani oyo alingi koboya mikano mya Nzambe na maloba mazangi ntina ?
Job LinVB 38:3  Lendisa motema mpe zala na mpiko, nakotuna yo, yanola ngai.
Job LinVB 38:4  Ozalaki wapi o ntango nasalaki mokili ? Loba, soko oyebi yango.
Job LinVB 38:5  Nani apesaki mwango bolai na bonene ? Nani atiaka nsinga ya komeka mwango ?
Job LinVB 38:6  Makonzi ma mwango mapikami ndenge nini ? Nani atiaki mabanga manene o nse ya mokili,
Job LinVB 38:7  ntango minzoto minso miyembaki lisanga, mpe bana banso ba Nzambe bazalaki koganga na nsai ?
Job LinVB 38:8  Nani akangisaki mai ma mbu o esika ya mango, ntango mabimaki o nse ya mabelé ?
Job LinVB 38:9  Ntango natiaki mampata o likolo makangema wana, mpe nazingaki mbu na londende lokola na elamba ;
Job LinVB 38:10  ntango nakatelaki mango ndelo, mpe natiaki bizibeli mpe mafungola,
Job LinVB 38:11  nalobaki na mbu : « Mai makoleka awa te, makasi ma mbonge ya mai makosuka awa ! »
Job LinVB 38:12  Uta babota yo osili otindi ntongo etinda ? Etani ntongo, okolakisaka yango esika ya mosala :
Job LinVB 38:13  ekende kokanga mokili epai moi mokobimaka mpe koningisa mwango mpo ’te bato babe bakweya ?
Job LinVB 38:14  Engengisa mokili mokoma motane lokola ngola, epakola mwango langi lokola o elamba ;
Job LinVB 38:15  Ntongo ekoboma mwinda mwa bato babe, ekobuka loboko la moto alingi kobete moninga.
Job LinVB 38:16  Okitaki o mbu tee o maziba ma yango ? Okendeki kotambola kin’o nse ya limfelo ?
Job LinVB 38:17  Balakisaki yo minoko mya lopango la Liwa ? Omonoko bakengeli ba mboka ya Molili ?
Job LinVB 38:18  Oyebi ata mwa moke bonene bwa mokili ? Loba, soko oyebi yango inso !
Job LinVB 38:19  Oyebi esika mboka ya mwinda ezali, mpe esika eye molili mofandi ?
Job LinVB 38:20  Bongo yo moto okende kotika yango kuna, yo moto olakisa yango esika ya yango !
Job LinVB 38:21  Soko oyebi, loba ’te babotaki yo o ntango ena, mpe osili okokisi mibu mingi, solo !
Job LinVB 38:22  Okotoki o bibombelo bya mbula ya matandala, omonoki esika mbula ya mabanga ekozalaka,
Job LinVB 38:23  mabanga maye nabongisi o mikolo mya mpasi mpe o mikolo mya bitumba binene ?
Job LinVB 38:24  Epai wapi mwinda mokobandaka kongenge, mpe esika nini mompepe mwa Esti mokobandaka kopepe ?
Job LinVB 38:25  Nani atimolelaki mbula makasi miluka, mpe nani apasolaki nzela ya mampata matondi na nkake ?
Job LinVB 38:26  Nani akonokisaka mbula o mokili mozangi bato, mpe o eliki ezali na bato te ?
Job LinVB 38:27  Nani akopesaka mai na mabelé makauki makasi, mpe nani akokolisaka wana matiti mabesu ?
Job LinVB 38:28  Mbula ezali nde na tata ? Nani akobotaka matanga ma mamio ?
Job LinVB 38:29  Matandala makobimaka o libumu lya nani ? Nani akobotaka londende louti o likolo ?
Job LinVB 38:30  O ntango ena mai makobongwana mabanga, mpe mai ma mbu makokangema makasi.
Job LinVB 38:31  Okoki nde kokanga ‘Bangondo nsambo’ liboke, kofungola minyololo mya ‘Motó mwa Ekange’,
Job LinVB 38:32  kobimisa ‘Mokwete’ o ntango ekoki, to kokamba ‘Motongolongo mwa nzoku’ na bana ba ye ?
Job LinVB 38:33  Oyebi nde mibeko nini bakotosaka o likolo ? Yo moto okotindaka mibeko awa o nse ?
Job LinVB 38:34  Okoki nde kobelela mampata mpo ’te mabima mpe manokisela yo mbula enene ?
Job LinVB 38:35  Monkalali mokobima nde mpo ya etinda ya yo mpe mokoloba na yo : « Ngai oyo, nayei » ?
Job LinVB 38:36  Nani apesaki nkongi bwanya ? Nani apesaki nsoso mobali mayele ?
Job LinVB 38:37  Nani akoki kotanga motango mwa mampata, kosopa mabenga ma mai ma likolo
Job LinVB 38:38  mpo ’te mabelé lido makangema, mpe makoma makasi lokola mabanga ?
Job LinVB 38:39  Yo nde okolukelaka nkosi nyama ya kolia, mpe okosilisaka nzala ya bana ba ye,
Job LinVB 38:40  baye bakotikalaka o mabulu ma bango, to bakobombamaka o kati ya mibenga ?
Job LinVB 38:41  Nani akolambelaka yanganga biloko bya bolei, soko bana ba ye bakomi kolela epai ya Nzambe mpe koningisa mapapu mpo ya nzala ?
Chapter 39
Job LinVB 39:1  Oyebi ntango nini ntaba ya ngomba ikobotaka bana ? Osili omoni kulupa o ntango ekobotaka ?
Job LinVB 39:2  Oyebi sanza boni ekomemeke zemi, oyebi mpe mokolo na ngonga nini ekobotaka ?
Job LinVB 39:3  Yango ikokumbama mpo ya kobimisa bana, mpe ntango kobota esili, mpasi mpe esili ;
Job LinVB 39:4  bana bakolenda mpe bakokola noki, na nsima bakei mpe bakozongela mama wa bango lisusu te.
Job LinVB 39:5  Nani apesaki mpunda ya zamba bonsomi ? Nani akataki nsinga ya mpunda ya esobe ?
Job LinVB 39:6  Ngai nalakisaki yango eliki efanda kuna na mpe mabelé mazali mongwa mongwa.
Job LinVB 39:7  Ekopanganaka na makeléle ma mboka ya bato te, mpe ekoyokaka lolaka la mokengeli te.
Job LinVB 39:8  Ekotambolaka o ngomba mpo ya koluka matiti, ezwa ata mwa matiti mabesu mpo elia.
Job LinVB 39:9  Mpakasa ekondima nde kosalela yo mosala ? Na butu ekoya kolala o ndako ya ngombe ya yo ?
Job LinVB 39:10  Okoki kokanga yango esala mosala mwa bilanga ? Okondimisa yango epasola to enika mabelé ?
Job LinVB 39:11  Okoki kotia motema na bokasi bonene bwa yango ? Okotikela yango mosala mwa yo mwa mpasi ?
Job LinVB 39:12  Ekokumbela yo nde mbuma ya mampa ma bilanga, ekosalisa yo kokotisa yango o bibombelo ?
Job LinVB 39:13  Maligbanga ekoningisaka mapapu na lipombo, kasi ezali na nsala kitoko te lokola nkongi na engondo.
Job LinVB 39:14  Awa eboti maki, ekotika mango o mabelé, zelo eyokisa mango molunge mouti na moi.
Job LinVB 39:15  Ekobosana ’te bakoki konyata mango na makolo, mpe nyama ya zamba ekoki koboma mango.
Job LinVB 39:16  Ekoyokelaka bana mawa te lokola eyebi bango te, ekoyoka motema mpasi te ata mosala mwa yango mokei mpamba.
Job LinVB 39:17  Loba ’te Nzambe apimi yango mayele, apesi yango ata ndambo ya mayele te.
Job LinVB 39:18  Nzokande soko etelemi likolo mpo ’te ekima, ekotala farasa na motambwisi wa yango se mpamba.
Job LinVB 39:19  Yo moto okopesaka farasa bokasi, mpe nsuki ilai o nkingo ?
Job LinVB 39:20  Yo moto okopimbwisaka yango lokola lipalela ? Ebandi yango kolela, bato banso bakomi kobanga.
Job LinVB 39:21  Ekosepela makasi ma yango, ekobete mabelé na makolo, mpe ekokende se liboso o etumba.
Job LinVB 39:22  Ekoyoka nsomo te, ekobanga likambo te, ekokima likama lya kokufa na mopanga te.
Job LinVB 39:23  Emeseni na makeléle ma libenga lya makula mpe na likongo lya mobuni lingengi na moi.
Job LinVB 39:24  Motema likolo ekopotaka mbangu. Soko babeti mondule, bakoki kokanga yango lisusu te.
Job LinVB 39:25  Mbala inso mondule moleli, ekoloba : Iyee ! Ata bitumba bizali naino mosika, esili eyebi, eyoki mingongo mya bakambi babimisi migango mya etumba.
Job LinVB 39:26  Yo nde opesaki kombekombe nsala ya yango, okofungolaka mapapu ma yango mpo ekende o Sudi ?
Job LinVB 39:27  Yo nde okotinda mpongo etinda mpo ebuta o likolo, mpo etonga zumbu lya yango o nsonge ya ngomba ?
Job LinVB 39:28  Ezali na esika ya kolala wana, o nsonge ya libanga lilai, esika moto akoki kokoma te.
Job LinVB 39:29  Kuna ezali koluka koboma nyama, miso ma yango makomonoko eloko ya kolia mosika.
Job LinVB 39:30  Bana ba yango bakolete makila, ezali bipai binso bibembe bilali.
Chapter 40
Job LinVB 40:2  « Olingi kowela ntembe na Nzambe wa bokasi bonso ? Awa ofundi ye, ozali na maloba masusu ? »
Job LinVB 40:4  « Nalobaki na bozoba, sikawa naloba lisusu nini ? Malamu nazipa monoko na loboko.
Job LinVB 40:5  Nalobaki mbala yoko, ekoki bongo ; mbala ibale… nakomeka koloba lisusu te. »
Job LinVB 40:6  Ut’o kati ya ekumbaki Yawe ayanoli Yob boye :
Job LinVB 40:7  Sala makasi lokola moto wa mpiko, nakotuna yo mpe okoyanola ngai.
Job LinVB 40:8  Olingi te ’te nakata likambo lya yo ? Olingi kokitisa ngai, yo moko olonga ?
Job LinVB 40:9  Ozali na bokasi lokola Nzambe ? Mongongo mwa yo mokokani na nkake ya Nzambe ?
Job LinVB 40:10  Soko ya solo, omilakisa na bonene bwa bokonzi, omilatisa na bikembiseli bya nkembo.
Job LinVB 40:11  Lakisa nkanda ya yo polele bipai binso, silisa bato ba lolendo na botali bwa yo.
Job LinVB 40:12  Bobele na miso mpamba, kitisa bango o nse mpe nyata bato babe na mbala yoko.
Job LinVB 40:13  Kimisa bango o nse ya mabelé, kanga bango na minyololo o mboka ya molili.
Job LinVB 40:14  Bongo ngai moko nakokumisa yo, zambi ozwi lilonga na bokasi bwa yo moko.
Job LinVB 40:15  Oyebi Ngubu, nasali yango lokola nasalaki yo : ngubu ekoliaka matiti lokola ngombe.
Job LinVB 40:16  Tala naino bokasi bwa mokongo mwa yango, na mpe minsisa minene o libumu lya yango
Job LinVB 40:17  Ekotambolaka yango, ekotelemisaka mokila lokola nzete ya sédere, ezali na minsisa o bibelo, minene lokola nsinga.
Job LinVB 40:18  Ezali na minkuwa makasi lokola nzete ya mbengi, ezali na mipanzi lokola bibende batuli.
Job LinVB 40:19  Yango nde nsuka ya misala minene Nzambe asalaki, kasi Mozalisi akaneli yango na mopanga.
Job LinVB 40:20  Ekoliaka matiti o esobe ya ngomba te, mpe nyama ya zamba ikosakanaka penepene na yango.
Job LinVB 40:21  Ekolalaka o nse ya nzete ya lilebo, ekobombamaka o nse ya nkekele pene na mai.
Job LinVB 40:22  Nzete ya malebo ikopesaka yango molili, nzete ya wenge penepene na mai ikobatelaka yango.
Job LinVB 40:23  Soko ebale ekomi na mbonge, ekobanga te, ata mai ma Yordane makoteli yango o monoko, ekoningana te.
Job LinVB 40:24  Nani akoki kobimela yango, kokanga yango mpe kotubola yango zolo na ebende ?
Job LinVB 40:25  Oyebi Ngando : Okoki kokanga yango na ndobo ? Okotiaka yango nsinga o lolemu mpo ’te obenda yango ?
Job LinVB 40:26  Okoki kotiela yango nkekele o zolo, to kotubola yango mbanga na nzube enene ?
Job LinVB 40:27  Ngando ekoya kobondela yo ? Ekoloba na yo maloba ma sukali ?
Job LinVB 40:28  Ekoyokana na yo mpo esalela yo mosala ? Okosomba yango mpo ezala moombo mwa yo seko ?
Job LinVB 40:29  Okosakana na yango lokola okosakana na ndeke ? Bana basi ba yo bakokanga yango na nsinga mpo batambwisa yango ?
Job LinVB 40:30  Babomi mbisi bakotekeke yango na mosolo ? Bato ba mombongo bakolukaka kosomba yango ?
Job LinVB 40:31  Okotubola nzoto ya yango na makongo ? Okobwakela yango ndobo, lokola bakoloboko mbisi ?
Job LinVB 40:32  Meka naino kokanga yango, okobosana etumba yango te, okomeka yango mbala ibale te.
Chapter 41
Job LinVB 41:1  Oyo akanisi ’te akolonga yango, azali komikosa ; bobele kotala yango na miso, ekoyokisa ye nsomo.
Job LinVB 41:2  Moto moko te akomeka kolamusa yango. Bongo nani akokoka komeka yango ?
Job LinVB 41:3  Oyo akobanga te kobundisa yango, nakofuta ye binso bizali na ngai.
Job LinVB 41:4  Tala mpe binama bya ngando, bokasi na mpe kitoko ya nzoto ya yango.
Job LinVB 41:5  Nani ameki kofungola lomposo la libumu lya yango ? Nani akotisi loboko o kati ya mbanga ya yango ?
Job LinVB 41:6  Nani afungoli bizibeli bya monoko mwa yango ? Mino manene ma yango, nsomo mpenza !
Job LinVB 41:7  Mokongo mwa yango, lokola nguba itandani, biteku bya yango bikangani makasi,
Job LinVB 41:8  bizali na lidusu lyoko te, ata mwa mompepe mokoki koleka o kati te.
Job LinVB 41:9  Biteku binso bya yango bisimbani malamu, bikangani mpe bikoki kokabwana te.
Job LinVB 41:10  Soko ekosoli, moi mongengisi nsoi ya yango, miso ma yango mazali lokola moi mwa ntongo.
Job LinVB 41:11  Na monoko ekosanzaka minkalali, mpe ekobimisa mintentei mya móto.
Job LinVB 41:12  Molinga mpe mokobima o zolo lya yango, lokola mokobimaka o lisasu lizali na móto.
Job LinVB 41:13  Na mpema ya yango ekopelisa makala, móto mokobimaka o monoko mwa yango.
Job LinVB 41:14  Bokasi bwa yango, nkingo ya yango, esika ezali, banso bayoki nsomo.
Job LinVB 41:15  Nsuni ya yango ezali na minsisa minene, mikangemi makasi, mikoki kolongwa soki te.
Job LinVB 41:16  Motema mwa yango bokasi lokola libanga, lokola libanga lya masini ma konika fufu.
Job LinVB 41:17  Soko etelemi, bilima binso bibangi, mpe nsomo enene epanzi byango.
Job LinVB 41:18  Soko obeti yango na mopanga, okolonga yango te ; na likongo, na mbeli, na likula se bongo.
Job LinVB 41:19  Ekotalaka ebende lokola lititi mpamba mpe nzete ya mbengi lokola nkoni ekauki.
Job LinVB 41:20  Makula ma litimbo makokimisa yango te, ekomonoko mabanga ma bilingongo lokola matiti
Job LinVB 41:21  mpe nzete ya likwangola lokola nkekele ; ekosekeke lokito la mopanga.
Job LinVB 41:22  Libumu lya yango lizali na nzube, lokola esaleli ekopasolaka mabelé.
Job LinVB 41:23  Ekoningisaka mai lokola mai matoki o nzungu, ekokomisaka mbu lokola lisasu litoki na móto.
Job LinVB 41:24  Esika yango eleki, etiki lokola nzela ya mwinda, mbu ekomi lokola ezipami na elamba mpembe.
Job LinVB 41:25  Awa o mokili nyama eleki ngando ezali te, ngando ekobangaka eloko te.
Job LinVB 41:26  Ekobangaka te kobundisa ata nyama inene, ezali mokonzi wa nyama inso ya mai mpe ya zamba.
Chapter 42
Job LinVB 42:2  Nayebi ’te ozali Nzambe wa bokasi bonso, manso olingi kosala, okokokisa mango.
Job LinVB 42:3  Ngai moto natiaki ntembe na mikano mya yo, nalobaki maloba ma bozoba mazangi ntina.
Job LinVB 42:4  Solo, lokola elema mpenza natangaki makamwa maye maleki mayele ma ngai
Job LinVB 42:5  Liboso nayebaki yo se mpo ya maloba ma bato, kasi sikawa namoni yo na miso.
Job LinVB 42:6  Naboyi maloba manso nalobaki, nayoki motema mawa mpe nalali o kati ya mputulu.
Job LinVB 42:7  Esilisi Nzambe koloba bongo na Yob, alobi na Elifas wa Teman maloba maye : Nasilikeli yo na baninga ba yo babale, zambi bolobaki ma­mbi ma ngai na bosembo te, lokola mosaleli wa ngai Yob.
Job LinVB 42:8  Yango wana sikawa bokamata ngombe nsambo na mpata babali nsambo, mpe bokende epai ya mosaleli wa ngai Yob. Bobonza libonza lya kotumba mpo ya mabe ma bino, mpe mosaleli wa ngai Yob akosambelela bino. Nakondimela ye, nakopesa bino etu­mbu te, awa bolobaki mambi ma ngai na bosembo te lokola mosaleli wa ngai Yob.
Job LinVB 42:9  Elias wa Teman, Bildad wa Sua mpe Sofar wa Naamat bakei kosala lokola Nzambe atindaki bango. Mpe Nzambe andimi losambo la Yob.
Job LinVB 42:10  Awa Yob azalaki kosambelela baninga ba ye, Mokonzi azongisi nkita ya ye inso ya kala ; azongiseli ye ya­ngo mbala ibale.
Job LinVB 42:11  Amoni ba­ndeko ba ye banso, babali na basi, babandi kozonga, na bayebani ba ye ba kala. Banso lisanga basali limpati o ndako ya ye. Balakisi ye mawa mpe babo­ndi ye mpo ya mpasi inso Mokonzi ati­ndelaki ye. Banso bayei kokabela ye mosolo, mpe moko moko atikeli ye mpete ya wolo.
Job LinVB 42:12  Mo­konzi abenisi Yob o mikolo miye, leka liboso. Akomi na mpata nkoto zomi na inei, kamela nkoto motoba, ngombe nkoto ibale, mpu­nda basi nkoto yoko.
Job LinVB 42:14  Apesi mwana mwasi wa liboso nko­mbo ‘Ebenga’ ; wa babale ‘Fulele ya za­mba’ ; wa basato ‘Liseke lya malasi’.
Job LinVB 42:15  O ekolo mobimba basi kitoko lokola bana ba Yob bazalaki te. Tata apesi bango ndambo ya biloko bya ye lokola apesaki bana babali ba ye.
Job LinVB 42:16  Nsima ya yango, Yob aumeli naino na bomoi tee akokisi mibu monkama na ntuku inei ; amoni ba­nkoko mpe bankokolo ba ye.
Job LinVB 42:17  Yob akomi mobange mpenza ; mokolo awei akokisi mikolo mya ye.