Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
NUMBERS
Up
Chapter 1
Numb LinVB 1:1  O mobu mwa mibale, o sanza ya ibale, mokolo mwa yambo mwa sanza, Yawe alobi na Moze, o eliki ya Sinai, o Ema ya Likita, maloba maye :
Numb LinVB 1:2  « Tanga bana ba-Israel banso, etuka na etuka, libota na libota ; otanga nkombo ya babali banso moko moko.
Numb LinVB 1:3  Bino na Aron bota­nga bato ba­nso ba Israel, baye bakokisi mibu ntu­ku ibale, baye banso bakoki na mosala mwa soda ; bokoma bango enge­bene na libota lya bango.
Numb LinVB 1:4  O ekolo yoko yoko moto moko akosalisa bino, oyo azali mokonzi wa libota. »
Numb LinVB 1:6  O libota lya Simeon, kamata Selumiel, mwana wa Surisadai.
Numb LinVB 1:7  O libota lya Yuda, kamata Nakason, mwana wa Aminadab.
Numb LinVB 1:8  O libota lya Isakar, kamata Netanel, mwana wa Suar.
Numb LinVB 1:9  O libota lya Zabulon, kamata Eliab, mwana wa Elon.
Numb LinVB 1:10  O mabota ma bana ba Yozefu : o libota lya Efraim, kamata Elisama, mwana wa Amiud ; o libota lya Manase, kamata Gamliel, mwana wa Pedasur.
Numb LinVB 1:11  O libota lya Benyamin, kamata Abidan, mwana wa Gideoni.
Numb LinVB 1:12  O libota lya Dan, kamata Aiezer, mwana wa Amisadai.
Numb LinVB 1:13  O libota lya Aser, kamata Pagiel, mwana wa Okran.
Numb LinVB 1:14  O libota lya Gad, kamata Eliazaf, mwana wa Reuel.
Numb LinVB 1:15  O libota lya Neftali, kamata Aira, mwana wa Enan.
Numb LinVB 1:16  Bato baye baponomi o lisanga mobimba, bazali bankumu o mabota ma bankoko ba Israel ; moko moko azali mokonzi wa lyoko lya mabota ma Israel.
Numb LinVB 1:17  Moze na Aron bakamati bo basalisi bato baye baninga baponoki.
Numb LinVB 1:18  Babengi bato banso basangana o mokolo mwa yambo mwa sanza ya ibale. Bana ba Israel batangi bongo bandeko ba bango, etuka na etuka, libota na libota, bakomi nkombo ya babali banso bakokisi mibu ntuku ibale, moko moko.
Numb LinVB 1:19  Moze akomi nko­mbo ya bango o eliki ya Sinai, se lokola Yawe atindaki ye.
Numb LinVB 1:20  Batangi liboso bana ba bankoko ba Ruben, mwana oyo abotami liboso o Israel ; batangi bango etuka na etuka, libota na libota, batangi nkombo ya babali banso bakokisi mibu ntuku ibale, baye banso bakoki na mosala mwa soda.
Numb LinVB 1:22  Batangi bana na bankoko ba Simeon, etuka na etuka, libota na libota, batangi nkombo ya babali banso bakokisi mibu ntuku ibale, baye ba­nso bakoki na mosala mwa soda.
Numb LinVB 1:24  Batangi bana na bankoko ba Gad, etuka na etuka, libota na libota ; batangi nkombo ya babali banso bakokisi mibu ntuku ibale, baye banso bakoki na mosala mwa soda.
Numb LinVB 1:26  Batangi bana na bankoko ba Yuda ; etuka na etuka, libota na libota ; batangi nkombo ya babali banso bakokisi mibu ntuku ibale, baye banso bakoki na mosala mwa soda.
Numb LinVB 1:28  Batangi bana na bankoko ba Isakar, etuka na etuka, libota na libota ; batangi nkombo ya babali banso bakokisi mibu ntuku ibale, baye banso bakoki na mosala mwa soda.
Numb LinVB 1:29  Bata­ngi bongo bato 54 400 o libota lya Isakar.
Numb LinVB 1:30  Batangi bana na bankoko ba Zabulon, etuka na etuka, libota na libota ; batangi nkombo ya babali banso bakokisi mibu ntuku ibale, baye ba­nso bakoki na mosala mwa soda.
Numb LinVB 1:31  Batangi bongo bato 57 400 o libota lya Zabulon.
Numb LinVB 1:32  O kati ya bana ba Yozefu bata­ngi bana na bankoko ba Efraim, etuka na etuka, libota na libota, batangi nkombo ya babali banso bakokisi mibu ntuku ibale, baye banso bakoki na mosala mwa soda.
Numb LinVB 1:33  Batangi bo­ngo bato 40 500 o libota lya Efraim.
Numb LinVB 1:34  Batangi bana na bankoko ba Manase, etuka na etuka, libota na libota ; batangi nkombo ya babali banso bakokisi mibu ntuku ibale, baye banso bakoki na mosala mwa soda.
Numb LinVB 1:36  Batangi bana na bankoko ba Be­nyamin, etuka na etuka, libota na libota ; batangi nkombo ya babali ba­nso bakokisi mibu ntuku ibale, baye banso bakoki na mosala mwa soda.
Numb LinVB 1:37  Batangi bongo bato 35 400 o libota lya Benyamin.
Numb LinVB 1:38  Batangi bana na bankoko ba Dan, etuka na etuka, libota na libota ; batangi nkombo ya babali banso bakokisi mibu ntuku ibale, baye banso bakoki na mosala mwa soda.
Numb LinVB 1:40  Batangi bana na bankoko ba Aser, etuka na etuka, libota na libota ; batangi nkombo ya babali banso ba­kokisi mibu ntuku ibale, baye banso bakoki na mosala mwa soda.
Numb LinVB 1:42  Batangi bana na bankoko ba Neftali, etuka na etuka, libota na libota, batangi nkombo ya babali banso bakokisi mibu ntuku ibale, baye banso bakoki na mosala mwa soda.
Numb LinVB 1:43  Bata­ngi bongo bato 53 400 o libota lya Neftali.
Numb LinVB 1:44  Ezali baye banso Moze na Aron batangi elongo na bakolo zomi na ba­ba­le ba Israel, baye baponomi o libota lyoko lyoko.
Numb LinVB 1:45  Batangi bana ba Isra­el banso, etuka na etuka, libota na libota, babali banso bakokisi mibu ntuku ibale, baye bakoki na mosa­la mwa soda.
Numb LinVB 1:46  Motango mobimba mpe­nza mwa bango banso mozali 603 550.
Numb LinVB 1:49  « Okoma nkombo ya bato ba libota lya Levi te, otanga bango o kati ya bana ba-Israel te.
Numb LinVB 1:50  Opesa ba-Levi mosala mwa Ndako ya Bondeko, batala biloko binso na makambo manso matali ndako ena. Bango bameme Ndako ya Bondeko na biloko bya bango binso, basala mosala o ndako mpe bafanda penepene na yango.
Numb LinVB 1:51  Mokolo Ndako ekolongwa, bango babakola yango ; awa bakopika nga­nda epai esusu, bango batelemisa ya­ngo lisusu. Soko moto mosusu ako­beleme na yango, baboma ye.
Numb LinVB 1:52  Bana ba Israel bafanda moto na moto o nganda ya ye moko, penepene na bendele ya libota lya ye moko.
Numb LinVB 1:53  Kasi ba-Levi bafanda penepene na ndako ya Bondeko mpo ’te Nkanda ya ngai ekwela lisanga lya bana ba Isra­el te. Bobele ba-Levi basala mosala o ndako ya Bondeko. »
Numb LinVB 1:54  Bana ba Israel bandimi mibeko mina minso mpe basali se lokola Yawe atindaki Moze.
Chapter 2
Numb LinVB 2:2  « Bana ba Israel bapika nganda ya bango, moto na moto penepene na bendele ya libota lya ye. Bapika nganda zongazonga na Ndako ya Bondeko, kasi na mwa ntaka.
Numb LinVB 2:3  Epai ya Esti, batia bendele ya nga­nda ya Yuda, engebene na mampinga ma bango. Mokonzi wa libota lya Yuda : Nakason, mwana wa Aminadab.
Numb LinVB 2:5  Baye bakofanda penepene na ba-ngo : bato ba libota lya Isakar. Mokonzi wa libota lya Isakar, Netanel, mwana wa Suar.
Numb LinVB 2:7  na mpe libota lya Zabulon. Mokonzi wa libota lya Zabulon : Eliab, mwana wa Kelon :
Numb LinVB 2:9  Motango mobi­mba mwa bato batangemi o Yuda, engebene na mampinga ma bango, mozalaki 186 400. Bango balongola nganda liboso.
Numb LinVB 2:10  Epai ya Sudi, batia bendele ya nganda ya Ruben, engebene na ma-mpinga ma bango. Mokonzi wa libota lya Ruben, Elisur, mwana wa Sedeur.
Numb LinVB 2:12  Baye bakofanda penepene na ba­ngo : bato ba libota lya Simeon. Mokonzi wa libota lya Simeon, Selumiel, mwana wa Surisadai.
Numb LinVB 2:14  nsima libota lya Gad. Mokonzi wa libota lya Gad, Elisaf, mwana wa Reuel.
Numb LinVB 2:16  Motango mobimba mwa bato batangemi o nganda ya Ruben, engebene na mampinga ma bango, mozalaki 151 450. Bango balongola nganda mpe bakende o esika ya bibale.
Numb LinVB 2:17  Na nsima bakolongola Ema ya Likita, nganda ya ba-Levi ekozala o kati ya nganda isusu. Bakokende bongo na molongo mwa nganda, moto na moto alanda bendele ya ye.
Numb LinVB 2:18  Epai ya Westi, batia bendele ya nganda ya Efraim, engebene na ma-mpinga ma bango. Mokonzi wa libota lya Efraim : Elisama, mwana wa Amiud.
Numb LinVB 2:20  Baye bakofanda penepene na ba­ngo : bato ba libota lya Manase. Mokonzi wa libota lya Manase, Gamliel, mwana wa Pedasur.
Numb LinVB 2:22  Na mpe libota lya Benyamin. Mokonzi wa libota lya Benyamin, Abidan, mwana wa Gideo­ni.
Numb LinVB 2:24  Motango mobimba mwa bato batangemi o nganda ya Efraim, engebene na mampinga ma bango, mozalaki 108 100. Bango balongola nganda mpe bakende o esika ya bisato.
Numb LinVB 2:25  Epai ya Nordi, batia bendele ya nganda ya Dan, engebene na mampi­nga ma bango. Mokonzi wa libota lya Dan, Akiezer, mwana wa Amisadai.
Numb LinVB 2:27  Baye bakofanda penepene na ba­ngo : bato ba libota lya Aser. Moko­nzi wa libota lya Aser, Pagiel, mwana wa Okran.
Numb LinVB 2:29  Nsima libota lya Neftali. Mokonzi wa libota lya Neftali, Aira, mwana wa Enan.
Numb LinVB 2:31  Motango mobimba mwa bato batangemi o nganda ya Dan mozalaki 157 600. Bango balo­ngola nganda mpe bakende o nsima ya bango. Moto na moto alanda be-ndele ya ye moko. »
Numb LinVB 2:32  Tala boniboni batangi bana ba Isra­el, libota na libota. Bato ba nga­nda inso, engebene na mampinga ma bango, bakokisi 603 500.
Numb LinVB 2:33  Kasi batangi bato ba Levi o motango mwa bana ba Israel te, se lokola Yawe ati­ndaki Moze.
Numb LinVB 2:34  Bana ba Israel basali manso lokola Yawe atindaki Moze. Bapiki nga­nda ya bango se bongo penepene na bendele ya bango. Esika balongoli nganda bakei na molongo, etuka na etuka, libota na libota.
Chapter 3
Numb LinVB 3:1  Tala awa libota lya Aron na Moze o eleko Yawe azalaki koloba na Moze o ngomba Sinai.
Numb LinVB 3:2  Nkombo ya bana ba Aron : Nadab, mwana wa yambo, Abiu, Eleazar na Itamar.
Numb LinVB 3:3  Tala nkombo ya bana ba Aron, banganga Nzambe bazwaki mafuta masantu mpe baponomoki mpo basala mosala mwa bonganga.
Numb LinVB 3:4  Nadab na Abiu bakufaki o miso ma Yawe, o eliki ya Sinai, ntango babonzaki mabonza ma móto mobenemeki te. Bango babotaki bana te ; ya­ngo wana Eleazar na Itamar bazalaki kosala mosala mwa bonganga o miso ma tata wa bango Aron.
Numb LinVB 3:6  « Benga bana ba libota lya Levi mpe pesa bango na nganga Nzambe Aron, basalisa ye.
Numb LinVB 3:7  Basalela ye na mpe lisanga mobimba o boso bwa Ema ya Likita mpo ya kosala misala minso mya Ndako.
Numb LinVB 3:8  Batala biloko binso bya Ema ya Likita ; babongisa Ndako esantu o nko­mbo ya bato banso ba Israel.
Numb LinVB 3:9  Pesa ba-Levi o maboko ma Aron mpe ma bana ba ye. Bazala basaleli ba bango, bapesami o nkombo ya libota lya Isra­el mobimba.
Numb LinVB 3:10  Oloba na Aron mpe na bana ba ye ’te basala mosala mwa bonganga malamu. Mpe soko moto mosusu ameki kosala mosala mona, baboma ye. »
Numb LinVB 3:12  « Yoka naino, naponi ba-Levi o ntei ya bana ba Israel lokola bakitani ba bana ba yambo, baye bafungoli mabumu ma bamama ba Israel. Yango wana ba-Levi bazali bato ba ngai,
Numb LinVB 3:13  zambi mwa­na oyo abotami yambo azali mwana wa ngai. Mokolo nabomaki bana ba yambo banso o Ezipeti, naponoki bana ba Israel babotami yambo, bazala ba ngai, bazala bana ba bato to bana ba bibwele : banso bazali ba ngai ; ngai Yawe. »
Numb LinVB 3:15  « Tanga bana ba Levi, libota na libota, etuka na etuka ; tanga bobele bana babali banso, baye bakokisi sa-nza yoko. »
Numb LinVB 3:16  Awa Yawe apesi etinda eye, Moze atangi bango banso lokola Yawe atindaki.
Numb LinVB 3:17  Tala awa nkombo ya bana ba Levi : Gerson, Keat na Merari.
Numb LinVB 3:18  Nkombo ya bana ba Gerson na bituka bya bango : Libni na Simei ;
Numb LinVB 3:19  bana ba Keat na bituka bya bango : Amram, Yisar, Ebron na Uziel ;
Numb LinVB 3:20  bana ba Merari na bituka bya bango : Mali na Musi. Byango nde bituka bya Levi, libota na libota.
Numb LinVB 3:21  Gerson azalaki nkoko wa libota lya ba-Libni na ba-Simei. Bango ba­nso bazali bituka bya Gerson.
Numb LinVB 3:22  Motango mobimba mwa babali banso batangemi, baye bakokisi sanza yoko mpe leka, mozalaki mwa bato 7 500.
Numb LinVB 3:23  Bato ba etuka ya Gerson bapiki nganda ya bango nsima ya Ndako esantu, epai ya Westi.
Numb LinVB 3:24  Mokonzi wa libota lya Gerson, Eliasaf, mwana wa Lael.
Numb LinVB 3:25  O Ema ya Likita, bana ba Gerson bazalaki na mosala mwa kotala Ndako esantu, Ema ya Likita, motondo mwa yango, elamba enene epai bakokotoko o Ema ya Likita,
Numb LinVB 3:26  bilamba binene bya lopango, ela­mba eye epai bakokotoko o lopango ezingi Ndako esantu na altare, na mpe nsinga inso isengeli na mosala mona.
Numb LinVB 3:27  Keat azali nkoko wa libota lya Amram, Yisar, Ebron na Uziel. Bango banso bazali bituka bya Keat.
Numb LinVB 3:28  Mota­ngo mobimba mwa babali banso batangemi, banda bakokisi sanza yoko mpe leka, mozalaki mwa bato 8 300. Bango batala Ndako esantu.
Numb LinVB 3:29  Bato ba etuka ya Keat bapiki nganda ya ba­ngo epai ya Sudi ya Ndako esantu.
Numb LinVB 3:30  Mokonzi wa libota lya Keat, Elisafan, mwana wa Uziel.
Numb LinVB 3:31  Mosala mwa bango : kotala Sanduku ya Bondeko, meza, etemiseli ya mwinda, altare, biloko binso bya mosala mwa banga­nga Nzambe, na mpe elamba enene na biloko bya yango binso.
Numb LinVB 3:32  Mokonzi monene wa ba-Levi : Eleazar, mwana wa nganga Nzambe Aron. Ye azalaki kotala bato banso bazali na mosala o Ndako esantu.
Numb LinVB 3:33  Merari azali nkoko wa libota lya Mali na Musi ; bazali bituka bya Merari.
Numb LinVB 3:34  Motango mobimba mwa babali banso batangemi, banda baye bakokisi sanza yoko mpe leka, mozalaki mwa bato 6 200.
Numb LinVB 3:35  Mokonzi wa libota lya Merari : Suriel, mwana wa Abiayil. Bango bapiki nganda epai ya Nordi ya Ndako esantu.
Numb LinVB 3:36  Mosala mwa bana ba Merari : kotala bizingeli bya Ndako esantu, mabasa, makonzi na makolo ma mango mpe biloko bisusu binso bitali Ndako ena,
Numb LinVB 3:37  makonzi mazingi lopango, makolo ma mango, piké na nsinga ya mango.
Numb LinVB 3:38  Moze na Aron na bana ba ye, baye bazalaki na mosala mwa kotala esika esantu o nkombo ya bana ba Isra­el, bango bapiki nganda ya bango epai ya Esti, o boso bwa Ndako esantu, liboso lya Ema ya Likita, epai moi mokobimaka. Kasi soko moto mosusu abelemi, baboma ye.
Numb LinVB 3:39  Motango mobimba mwa ba-Levi mozalaki mwa 22 000, baye Moze ata­ngaki libota na libota lokola Yawe atindaki : babali banso bakokisi sanza yoko mpe leka.
Numb LinVB 3:40  Yawe alobi na Moze : « Tanga bana babali ba yambo ba mabota ma Isra­el, baye bakokisi sanza yoko mpe leka ; koma nkombo ya bango banso.
Numb LinVB 3:41  Na nsima, o esika ya bana babotami yambo o Israel, opesa ngai Yawe ba-Levi banso ; opesa ngai mpe bibwele bya ba-Levi o esika ya bana bibwele ba yambo ba bana ba Israel. »
Numb LinVB 3:42  Moze atangi bongo bana ba yambo banso ba Israel se lokola Yawe atindaki ye.
Numb LinVB 3:43  Motango mobimba mwa bana ba ya­mbo, baye bakokisi sanza yoko mpe leka mozalaki mwa bato 22 273.
Numb LinVB 3:45  « Kamata ba-Levi o esika ya bana ba yambo banso ba Israel, na mpe bi­bwele bya ba-Levi o esika ya bibwele bya bango. Ba-Levi bazala ba ngai, ngai Yawe.
Numb LinVB 3:46  Awa bana ba yambo baleki ba-Levi na boike, mpo ya kosikola bana ba yambo nkama ibale na ntuku nsambo na basato,
Numb LinVB 3:47  okofuta mitako mitano mpo ya mwana moko moko, lokola bakotangaka mitako o esika esantu : motako mokokani na mosolo moke.
Numb LinVB 3:48  Na nsima pesa Aron na bana ba ye mosolo mpo ya kosikola bana ba Israel baleki motango mwa ba-Levi. »
Numb LinVB 3:49  Moze akamati mosolo mwa bosikoli bana ba yambo, baye baleki ba-Levi na boike.
Numb LinVB 3:50  Azwi bongo mosolo mwa bana ba yambo ba Israel : mitako 1 365, kotanga lokola bakotangaka o ndako esantu.
Numb LinVB 3:51  Moze apesi Aron na bana ba ye mosolo mwa bosikoli bana ba Israel, lokola Yawe atindaki ye.
Chapter 4
Numb LinVB 4:2  « Botanga o libota lya baLevi baye bazali bana ba Keat ; bota­nga bango etuka na etuka, libota na libota.
Numb LinVB 4:3  Botanga babali banso bakokisi mibu ntuku isato tee ntuku itano : mosala mwa bango mozali mosala mwa Ema ya Likita.
Numb LinVB 4:4  O Ema ya Likita bana ba Keat babatela biloko bileki bisantu.
Numb LinVB 4:5  Mokolo bakolongola nganda, Aron na bana ba ye balongola elamba enene mpe bazipa na yango Sanduku ya Bo­ndeko.
Numb LinVB 4:6  Bazipa yango lisusu na ema ya lomposo la ntaba, mpe likolo lya ya­ngo batanda elamba ya langi ya lo­ngondo. Na nsima babongisa mabaya ma komeme sanduku.
Numb LinVB 4:7  O elamba ya longondo eye bakotanda o meza ya mabonza bakotia sani, kopo, mbilika na mbeki mpo ya mabonza ma bomeli ; batia mampa ma libonza lya mokolo na mokolo mpe wana seko.
Numb LinVB 4:8  Bazipa inso na elamba ya kiusa ya longondo, likolo lya yango batia ema ya lomposo la ntaba. Na nsima babongisa mabaya mpo ya komeme meza.
Numb LinVB 4:9  Na nsima bakamata elamba ya longondo, bazipa na yango etemiseli ya mwinda, na biloko mpo ya kozimisa mwinda, na sani ya mputulu, na mbeki ya mafuta maye makoki na mosala o Ndako esantu.
Numb LinVB 4:10  Bazipa etemiseli na biloko bya yango na lo-mposo la ntaba, mpe batia binso o motalaka.
Numb LinVB 4:11  O altare ya wolo batanda elamba ya langi ya longondo mpe bazipa yango na ema ya lomposo la ntaba. Na nsima babongisa mabaya ma komeme altare.
Numb LinVB 4:12  Na nsima batia biloko binso bikoki na mosala o esika esantu o ela-mba ya longondo, bazipa binso na ema ya lomposo la ntaba, mpe batia binso o motalaka.
Numb LinVB 4:13  Balongola o altare mputulu ya móto, bazipa yango na elamba etane.
Numb LinVB 4:14  Batia likolo lya yango biloko binso bya mosala o Ndako esantu : mbeki ya mpaka ya malasi, nkanya, mpau, kopo ya konyakela mai, biloko bike bisusu bya altare. Batanda likolo lya byango ema ya lomposo la ntaba ; na nsima babongisa mabaya mpo ya komeme altare.
Numb LinVB 4:15  Awa Aron na bana ba ye basilisi kokanga biloko bisantu binso na biloko bike, o ntango bakolongola nga­nda, bana ba Keat baya komeme bi­nso, kasi basimba byango na maboko te, mbele bakokufa. Ezali mosala mwa bana ba Keat o Ema ya Likita.
Numb LinVB 4:16  Nzokande Eleazar, mwana wa nganga Nzambe Aron, atala mafuta ma etemiseli ya mwinda, na malasi ma matiti ma nsolo mpimbo, na mabonza ma mokolo na mokolo, na mafuta ma bopakoli. Akengele biloko binso bya Ndako esantu mobimba, atala biloko binso bisali wana, biloko bisantu na biloko bike bisusu. »
Numb LinVB 4:18  « Bolongola bana ba Keat o libota lya ba-Levi te.
Numb LinVB 4:19  Bosala na ba­ngo se bongo, mpo ’te babika mpe bakufa te, esika bakobeleme na biloko bisantu. Aron na bana ba ye balakisa moko moko wa bango mosala mwa ye mwa bomemi biloko.
Numb LinVB 4:20  Bakeba ’te bayingela o Ndako esantu te, batala mpe biloko bisantu na miso te, ata moke te, soki te bakokufa ! »
Numb LinVB 4:22  « Tanga mpe bana ba etuka ya Gerson, libota na libota, etuka na etuka.
Numb LinVB 4:23  Tanga babali banso bakokisi mibu ntuku isato tee ntuku itano, baye banso bakoki na mosala o Ema ya Likita.
Numb LinVB 4:24  Tala mosala mwa bana ba etuka ya Gerson na mpe biloko basengeli komeme.
Numb LinVB 4:25  Bameme bilamba bya Ndako esan­tu, bya Ema ya Likita, ema ya ya­ngo, mpe ema ya lomposo la ntaba eye ekozipa yango, na mpe elamba enene epai bakokotoko o Ema ya Likita ;
Numb LinVB 4:26  lisusu : bilamba bya lopango, elamba eye epai bakokotoko o lopa-ngo lozingi Ndako esantu na altare, nsinga na biloko binso bisengeli na mosala mwa bokumisi Yawe. Bango bazali na mosala mona.
Numb LinVB 4:27  Bana ba Gerson basala mosala mwa bango mpe bameme biloko lokola Aron na bana ba ye bakotinda ; batala mpe soko bakosalaka mosala mwa bango malamu.
Numb LinVB 4:28  Mosala mwa bana ba etuka ya Gerson o Ema ya Likita, mwa­ngo mona. Mpe Itamar, mwana wa nganga Nzambe Aron, ayangela misala mina minso. »
Numb LinVB 4:29  « Tanga mpe bana ba Merari, etuka na etuka, libota na libota.
Numb LinVB 4:30  Tanga babali banso bakokisi mibu ntuku isato tee ntuku itano, baye banso bakoki na mosala o Ema ya Likita.
Numb LinVB 4:31  Tala mosala bango bakosala o Ema ya Likita : Bameme bisingeli bya Ndako esantu, mabasa, makonzi na makolo ma mango ;
Numb LinVB 4:32  lisusu : makonzi mazi-ngi lopango, makolo ma mango, piké, nsinga na biloko binso bisengeli na botongi Ema ena. Tanga nkombo ya bango na biloko binso basengeli komeme.
Numb LinVB 4:33  Mosala mwa bana ba etuka ya Merari, mwango mona. Itamar, mwana wa nganga Nzambe Aron, aya­ngela misala mina minso. »
Numb LinVB 4:34  Moze, Aron na bakonzi ba mabota batangi bana ba Keat, etuka na etuka, libota na libota.
Numb LinVB 4:35  Batangi babali banso bakokisi mibu ntuku isato tee ntuku itano, baye banso bakoki na mosala o Ema ya Likita.
Numb LinVB 4:37  Bango banso bana ba etuka ya Keat, baye basengeli kosala mosala o Ema ya Likita. Moze na Aron batangi bango lokola Yawe atindaki Moze.
Numb LinVB 4:38  Batangi bana ba Gerson, etuka na etuka, libota na libota.
Numb LinVB 4:39  Batangi babali banso bakokisi mibu ntuku isato tee ntuku itano, baye banso bakoki na mosala o Ema ya Likita.
Numb LinVB 4:40  Batangi bongo bato 2 630, etuka na etuka, libota na libota.
Numb LinVB 4:41  Bango banso bana ba etuka ya Gerson, baye basengeli kosala mosala o Ema ya Likita. Moze na Aron batangi bango lokola Yawe atindaki Moze.
Numb LinVB 4:42  Batangi mabota ma bana ba Merari, etuka na etuka, libota na libota.
Numb LinVB 4:43  Batangi babali banso bakokisi mibu ntuku isato tee mibu ntuku itano, baye banso bakoki na mosala o Ema ya Likita.
Numb LinVB 4:45  Bango banso bana ba etuka ya Merari, baye Moze na Aron batangi lokola Yawe atindaki Moze.
Numb LinVB 4:46  Motango mobimba mwa ba-Levi, baye Moze, Aron na bakonzi ba Israel batangi, etuka na etuka, libota na libota,
Numb LinVB 4:47  babali banso bakokisi mibu ntuku isato tee mibu ntuku itano, baye bakoki na mosala o Ema ya Likita,
Numb LinVB 4:49  Lokola Yawe atindaki Moze batangi bango mpe balakisi moto na moto mosala mwa ye na mpe biloko basengeli komeme ; batangi bango lokola Yawe atindaki Moze.
Chapter 5
Numb LinVB 5:2  « Loba na bana ba Israel babimisa o nganda bato banso bazali na bokono bwa maba, na baye banso nzoto ekota­ngaka mai to baye bakomi na nzoto mbindo mpo basimbi ebembe.
Numb LinVB 5:3  Bazala babali to basi, bobimisa bango o nganda. Bobele bongo bakokomisa nganda esika mbindo te, zambi ezali esika ngai nalingi kozala o ntei ya bango. »
Numb LinVB 5:4  Bana ba Israel basali se bo­ngo, babimisi bango o nganda. Basali se lokola Yawe alobaki na Moze.
Numb LinVB 5:6  « Loba na ba­na ba Israel : Soko moto moko, mobali to mwasi, asali moninga mabe, mpe ebebisi bongo mobeko mwa Yawe, moto oyo amemi ngambo.
Numb LinVB 5:7  Asakola lisumu lya ye, afuta eloko abebisaki, mpe abakisa eteni ya bitano. Afuta biloko bina o maboko ma moto oyo ye asalaki mabe.
Numb LinVB 5:8  Soko nkolo wa eloko azali na ndeko te, oyo bakoki kozongisela ye yango, lokola ekomi ya Yawe, bapesa nganga Nzambe yango ; abakisa mpe mpata mobali yoko mpo ya kofuta mabe ma ye mpo ’te nganga Nzambe asala mpo ya ye milulu mya bolimbisi masumu.
Numb LinVB 5:9  Nganga Nzambe ako­zwa eteni ya biloko binso bana ba Isra­el bakoyela ye mpo ya mosala mwa Nzambe.
Numb LinVB 5:10  Biloko bisantu bi­nso moto apesi nganga Nzambe, bisali bya nganga Nzambe. »
Numb LinVB 5:12  « Loba na bana ba Israel : Soko mwasi moko ako­saki mobali wa ye, mpo atambolaki na mobali mosusu,
Numb LinVB 5:13  mobali mosusu ayebani na mwasi ona, kasi mobali wa ye mpenza ayebi likambo lina te, bongo mwasi oyo abebisi lokumu la ye, ata moto mosusu amoni likambo lina te ;
Numb LinVB 5:14  soko mobali akomi koyokela mwasi wa ye zuwa awa abebisi lokumu la ye, to mobali akomi kokanisa ye mpamba, mpo asalaki eloko te,
Numb LinVB 5:15  mobali oyo akende epai ya nga­nga Nzambe na mwasi wa ye mpe abonza libonza lya fufu ya kilo itano ; asopela yango mafuta te, atia mpe mpaka ya malasi te, zambi ezali ‘libonza mpo ya zuwa’, libonza mobali apesi mpo ya kokundola mabe masalemi.
Numb LinVB 5:16  Nganga Nzambe abyanga mwasi ona aya penepene na Yawe.
Numb LinVB 5:17  Na nsima akamata mai mabenemi o mbeki ya mabelé, akamata mpe o mabelé ma Ndako esantu mputulu, eye akosangisa na mai mana.
Numb LinVB 5:18  Aya na mwasi o miso ma Yawe, afungola nsuki ya ye, mpe atia o maboko ma ye ‘libo­nza mpo ya zuwa’. Nganga Nzambe ameme o maboko mbeki na mai ma bololo ma botombeli bobe.
Numb LinVB 5:19  Na nsima alayisa mwasi ndai, aloba na ye : « Soko ya solo, otamboli na mobali mosusu te, okomisi nzoto ya yo mbindo te, awa oyebi ’te mobali wa yo azali mokonzi wa yo, mai maye ma bololo ma botombeli bobe masala yo mabe te.
Numb LinVB 5:20  Kasi soko ya solo otambolaki na mobali mosusu, awa oyebi ’te mobali wa yo azali mokonzi wa yo, soko ya solo obebisaki nzoto ya yo mpo otambolaki na mobali mo­susu… »
Numb LinVB 5:21  Nganga Nzambe alayisa mwasi ndai, aloba na ye : « Yawe akomisa nkombo ya yo elembo ya moto asalaki mabe o miso ma bato banso ba ekolo, avimbisa libumu lya yo mpo obota lisusu te.
Numb LinVB 5:22  Mai maye ma botombeli bobe mayingela o misopo mya yo mpo ’te mavimbisa libumu lya yo, mpe bongo obota lisusu te. » Mwasi ayanola : « Amen ! Amen ! »
Numb LinVB 5:23  Na nsima nganga Nzambe akoma maloba mana, mpe akoboma mango na mai ma bololo.
Numb LinVB 5:24  Amelisa mwasi ona mai mana ma bololo ma boto-mbeli bobe, mpe mai makoyingela o nzoto ya ye mpo ’te ayoka libumu bololo.
Numb LinVB 5:25  Na nsima nganga Nzambe akamata libonza mpo ya zuwa o maboko ma mwasi, atombola lyango mpo ya kolakisa Yawe, mpe atia lyango o altare.
Numb LinVB 5:26  Akamata mwa ndambo ya libonza mpo ya kokundola likambo lina mpe atumba yango o altare. Amelisa mwasi mai mana.
Numb LinVB 5:27  Awa amelisi ye mai mana, soko akosaki mobali wa ye mai ma boto-mbeli bobe mayingeli o nzoto ya ye, akoyoka mango bololo : libumu lya ye likovimba mpe akobota lisusu te : akozala bongo ndakisa ya nsoni o mi­so ma bato ba ekolo ya ye.
Numb LinVB 5:28  Nzokande, soko abebisaki lokumu la ye te, mpe azali peto, likambo libe likokwela ye te mpe akokoka kobota lisusu.
Numb LinVB 5:29  Tala nzela bosengeli kolanda o likambo litali zuwa, mpo ya mwasi akomisaki nzoto ya ye mbindo, amisambwisaki mpo akosaki mobali wa ye,
Numb LinVB 5:30  to soko zuwa ekotelaki mobali o motema mpe akanisaki mwasi wa ye na mabe, akende na ye o miso ma Yawe, mpe nganga Nzambe asala bobele bongo.
Numb LinVB 5:31  Mobali akozala na likambo te, bobele mwasi soko asalaki mabe. »
Chapter 6
Numb LinVB 6:2  « Loba na bana ba Israel : Soko mobali to mwasi alingi kolakela Yawe ’te akomikaba na ye, moto oyo amipesi bo­ngo,
Numb LinVB 6:3  atika komele vino na lotoko, ati­ka komele masanga makasi maye mauti na vino mpe na lotoko, amele mai ma mbuma ya vino te, alia mpe mbuma ya vino te, ya mobesu to ya kokauka.
Numb LinVB 6:4  Eleko mobimba ya bomikabi na Nzambe, alia mbuma yoko ya nzete ya vino te, ndika te, lomposo mpe te.
Numb LinVB 6:5  Eleko mobimba ya bomikabi na Nzambe lotebu lokata nsuki ya motó mwa ye te. Akozala mosantu tee mikolo mya bomikabi na Nza­mbe mikoki, mpe atika nsuki ya motó mwa ye ikola.
Numb LinVB 6:6  Eleko mobimba ya bomikabi na Nzambe, akoma penepenene na ebembe te.
Numb LinVB 6:7  Soko tata to mama, ndeko mobali to mwasi akufi, akoma penepene te mpo azwa mbi­ndo te, zambi motó mwa ye molakisi ’te amikabi na Nzambe.
Numb LinVB 6:8  Eleko mobimba ya bomikabi na Nzambe, abo­nzami na Yawe.
Numb LinVB 6:9  Soko moto moko akufi liwa lya mbalakaka penepene na ye, bongo mo­tó mosantu mwa ye mokomi na mbindo, akokola motó mwa ye o mokolo mwa bopetoli, akokola nsuki o mokolo mwa nsambo.
Numb LinVB 6:10  O mokolo mwa mwambi ayela nganga Nzambe bikokoba bibale to bibenga bibale, ameme byango o esika bakoyingelaka o Ema ya Likita.
Numb LinVB 6:11  Nganga Nza-mbe abonza yoko mpo ya kolimbisa lisumu lya ye, mpe yoko mpo ya kokumisa Yawe. Na nsima asala milulu mya bolongoli mbindo eye azwaki ntango akomaki penepene na ebembe. Bobele o mokolo mona, moto amikabi na Nzambe, asantisa motó mwa ye lisusu ;
Numb LinVB 6:12  amikaba na Nzambe lisusu mpo ya elako ya nazir alakelaki, aya na mwana mpata yoko ya mbula yoko, abonza libonza mpo ya kofuta mabe ma ye. Batala eleko ya liboso ya bomikabi te, zambi nsuki ya ye ikomaki na mbindo.
Numb LinVB 6:13  Tala boniboni moto amikabi na Nzambe asengeli kosala o mokolo eleko ya bomikabi esili. Bakende na ye o monoko mwa Ema ya Likita.
Numb LinVB 6:14  Abonzela Yawe libonza : bo libonza lya kotumba apesa mwana mpata mo­bali, ya mbula yoko, ezala na mbeba te ; bo moboma mwa kozwa bolimbisi masumu apesa mwana mpata mwasi, ya mbula yoko, ezala na mbeba te ; bo moboma mwa bondeko, apesa mpata mobali yoko, ezala na mbeba te.
Numb LinVB 6:15  Aya naino na ekoló ya mampa malambami na fufu, maye mazangi nkisi ya mampa, kasi malambami na mafuta, na mpe minkate miye mizangi nkisi ya mampa, kasi milambami na mafuta ; babakisa mabonza ma bolei na mabonza ma bomeli.
Numb LinVB 6:16  Nganga Nzambe aya na binso o miso ma Yawe, mpe abonza moboma mwa bolimbisi masumu na libo­nza lya kotumba o nkombo ya moto amikabi na Nzambe.
Numb LinVB 6:17  Moto oyo aka­mata mpata mobali na mampa mavimbi te mazali o ekoló mpo abonza moboma mwa bondeko. Mpe nganga Nzambe abonza libonza lina elongo na mabonza ma bomeli.
Numb LinVB 6:18  Na nsima moto amikabi na Nzambe akokola motó mwa ye mosantu, penepene na monoko mwa Ema ya Likita, abwaka nsuki ya motó mosantu mwa ye o móto mwa moboma mwa bondeko.
Numb LinVB 6:19  Nganga Nzambe akamata lipeke lya mpata mobali lisili kolambama, na limpa lizali na nkisi te, liye liuti o ekoló, na monkate moko mozangi nkisi. Atia yango o maboko ma moto amikabi na Nzambe, awa asili kokata nsuki ya ye.
Numb LinVB 6:20  Atombola libonza mpo ’te alakisa Yawe yango. Ezali eloko esantu, basengeli kobo-nzela nganga Nzambe, ata azwaki ntolo na ebelo ya mpata liboso. Na nsima moto amikabi na Nzambe ndakoki komele vino.
Numb LinVB 6:21  Mobeko moye motali nazir, moto oyo amikabi na Nzambe, oyo alakeli Nzambe elako : akobonzela Yawe libonza mpo ya elako ya bomikabi na Nzambe. Soko alingi, akoki kobakisa biloko bisusu. Akokisa bongo elako alakelaki Nzambe se lokola mobeko mwa bomibaki motindi. »
Numb LinVB 6:23  « Loba na Aron mpe na baninga ba ye : Boyoka boniboni nalingi bobenisa bana ba Israel. Boloba na bango :
Numb LinVB 6:25  Yawe atala bino na bolingi mpe apesa bino bolamu !
Numb LinVB 6:26  Yawe alakisa elongi polele mpe ayela bino boboto !
Numb LinVB 6:27  Bapesa bana ba Israel nkombo ya ngai, bongo nakobenisa bango. »
Chapter 7
Numb LinVB 7:1  Mokolo Moze asilisi kotelemisa Ndako esantu, apakoli yango mafuta mpe abenisa yango elongo na biloko binso bisali o kati, na mpe altare na bisaleli bya yango binso. Esilisi ye kopakola mafuta mpe kobenisa byango,
Numb LinVB 7:2  bankumu ba Israel babonzi libonza ; ezalaki bayangeli ba mabota, bankumu baye bazalaki kotanga motango mwa bato.
Numb LinVB 7:3  Bayei na mabonza ma bango o miso ma Yawe : makalo motoba mazipami na ema, na ngo­mbe babali zomi na ibale : likalo lyoko lyoko na bankumu babale, ngo­mbe yoko na nkumu moko moko. Bayei na mango o boso bwa Ndako esantu.
Numb LinVB 7:5  « Oya­mba mabonza babonzeli yo, makosalisa yo mpo ya kobongisa Ema ya Liki­ta. Pesa mango na ba-Levi mpo basala mosala lokola esengeli. »
Numb LinVB 7:6  Moze akamati makalo na ngombe mpe apesi yango na ba-Levi.
Numb LinVB 7:7  Apesi makalo mabale na ngombe inei na bana ba Gerson mpo ya mosala mwa bango.
Numb LinVB 7:8  Apesi bana ba Merari makalo manei na ngombe mwa­mbi mpo ya mosala basengeli kosala na boyangeli bwa Itamar, mwana wa nganga Nzambe Aron.
Numb LinVB 7:9  Kasi apesi bana ba Keat eloko te, zambi bango basengeli komeme biloko bisantu o mapeke.
Numb LinVB 7:10  Bankumu bapesi naino libonza mpo ya bobenisi altare o mokolo bakopakola yango mafuta. Bayei na ma­bonza o boso bwa altare.
Numb LinVB 7:11  Mpe Yawe alobi na Moze : « Mokolo na mokolo nkumu moko aya na libonza lya ye mpo ya bobenisi altare. »
Numb LinVB 7:12  Moto ayei na libonza o mokolo mwa yambo, Nakason, mwana wa Aminadab, wa libota lya Yuda.
Numb LinVB 7:13  Abo­nzi sani yoko ya palata ya mitako monkama na ntuku isato, na sani esusu ya palata ya mitako ntuku nsambo lokola bakotangaka myango o esika esantu ; yango ibale itondi na fufu esangani na mafuta mpo ezala libo­nza lya bolei.
Numb LinVB 7:14  Abonzi mpe kopo ya wolo ya mitako zomi etondi na mpaka ya malasi,
Numb LinVB 7:15  na ngombe mobali yoko, mpata mobali yoko, mwana mpata ya mbula yoko bo libonza lya kotumba,
Numb LinVB 7:16  na ntaba mobali yoko bo moboma mwa bolimbisi masumu ;
Numb LinVB 7:17  mpe bo moboma mwa bondeko abonzi ngombe babali ibale, mpata babali itano, ntaba babali itano mpe bana mpata itano ya mbula yoko : libonza lya Nakason, mwana wa Aminadab.
Numb LinVB 7:18  Moto ayei na libonza o mokolo mwa mibale, Netanel, mwana wa Suar, mokonzi wa libota lya Isakar.
Numb LinVB 7:19  Abonzi sani yoko ya palata ya mitako monkama na ntuku isato, na sani esusu ya palata, ya mitako ntuku nsa­mbo, lokola bakotangaka myango o esika esantu ; yango ibale itondi na fufu esangani na mafuta mpo ezala libonza lya bolei.
Numb LinVB 7:20  Abonzi mpe kopo ya wolo ya mitako zomi, etondi na mpaka ya malasi,
Numb LinVB 7:21  na ngombe mobali yoko, mpata mobali yoko, mwana mpata ya mbula yoko bo libonza lya kotumba ;
Numb LinVB 7:22  na ntaba mobali yoko bo moboma mwa bolimbisi masumu ;
Numb LinVB 7:23  mpe bo moboma mwa bondeko abo­nzi ngombe babali ibale, mpata babali itano, ntaba babali itano na mpe bana mpata itano ya mbula yoko : libonza lya Netanel, mwana wa Suar.
Numb LinVB 7:24  Moto ayei na libonza o mokolo mwa misato, Eliab, mwana wa Elon, mokonzi wa libota lya Zabulon.
Numb LinVB 7:25  Abonzi sani yoko ya palata ya mitako monkama na ntuku isato, na sani esusu ya palata ya mitako ntuku nsa­mbo, lokola bakotangaka myango o esika esantu ; yango ibale itondi na fufu esangani na mafuta mpo ezala libonza lya bolei.
Numb LinVB 7:26  Abonzi mpe kopo ya wolo ya mitako zomi etondi na mpaka ya malasi ;
Numb LinVB 7:27  na ngombe mobali yoko, mpata mobali yoko, mwana mpata ya mbula yoko bo libonza lya kotumba ;
Numb LinVB 7:28  na ntaba mobali yoko bo moboma mwa bolimbisi masumu ;
Numb LinVB 7:29  mpe bo moboma mwa bondeko abonzi ngombe babali ibale, mpata babali itano, ntaba babali itano mpe bana mpata itano ya mbula yoko : libonza lya Eliab, mwana wa Elon.
Numb LinVB 7:30  Oyo ayei na libonza o mokolo mwa minei, Elisur, mwana wa Sedeur, mokonzi wa libota lya Ruben.
Numb LinVB 7:31  Abonzi sani yoko ya palata ya mitako monkama na ntuku isato, na sani esusu ya palata ya mitako ntuku nsa­mbo lokola bakotangaka myango o esika esantu ; yango ibale itondi na fufu esangani na mafuta mpo ezala libonza lya bolei.
Numb LinVB 7:32  Abonzi mpe kopo ya wolo ya mitako zomi etondi na mpaka ya malasi ;
Numb LinVB 7:33  na ngombe mobali yoko, mpata mobali yoko, mwana mpata ya mbula yoko bo libonza lya kotumba ;
Numb LinVB 7:34  na ntaba mobali yoko bo moboma mwa bolimbisi masumu ;
Numb LinVB 7:35  mpe bo moboma mwa bondeko abonzi ngombe babali ibale, mpata babali itano mpe bana mpata itano ya mbula yoko : libonza lya Elisur, mwana wa Sedeur.
Numb LinVB 7:36  Oyo ayei na libonza o mokolo mwa mitano, Selumiel, mwana wa Surisadai, mokonzi wa libota lya Simeon.
Numb LinVB 7:37  Abonzi sani yoko ya palata ya mitako monkama na ntuku isato, na sani esusu ya palata ya mitako ntu­ku nsambo, lokola bakotangaka myango o esika esantu ; yango ibale itondi na fufu esangani na mafuta mpo ezala libonza lya bolei.
Numb LinVB 7:38  Abonzi mpe kopo ya wolo ya mitako zomi etondi na mpaka ya malasi ;
Numb LinVB 7:39  na ngombe mobali yoko, mpata mobali yoko, mwana mpata ya mbula yoko bo libonza lya kotumba ;
Numb LinVB 7:40  na ntaba mobali yoko bo moboma mwa bolimbisi masumu ;
Numb LinVB 7:41  mpe bo moboma mwa bondeko abonzi ngombe babali ibale, mpata babali itano, ntaba babali itano mpe bana mpata itano ya mbula yoko : libonza lya Selumiel, mwana wa Surisadai.
Numb LinVB 7:42  Oyo ayei na libonza o mokolo mwa motoba, Eliasaf, mwana wa Reuel, mokonzi wa libota lya Gad.
Numb LinVB 7:43  Abonzi sani yoko ya palata ya mitako monkama na ntuku isato, na sani esusu ya palata ya mitako ntuku nsa­mbo, lokola bakotangaka myango o esika esantu ; yango ibale itondi na fufu esangani na mafuta mpo ezala libonza lya bolei.
Numb LinVB 7:44  Abonzi mpe kopo ya wolo ya mitako zomi etondi na mpaka ya malasi ;
Numb LinVB 7:45  na ngombe mobali yoko, mpata mobali yoko, mwana mpata ya mbula yoko bo libonza lya kotumba ;
Numb LinVB 7:46  na ntaba mobali yoko bo moboma mwa bolimbisi masumu ;
Numb LinVB 7:47  mpe bo moboma mwa bondeko abonzi ngombe babali ibale, mpata babali itano, ntaba babali itano mpe bana mpata itano ya mbula yoko : libonza lya Eliasaf, mwana wa Reuel.
Numb LinVB 7:48  Oyo ayei na libonza o mokolo mwa nsambo, Elisama, mwana wa Amniud, mokonzi wa libota lya Efraim.
Numb LinVB 7:49  Abonzi sani yoko ya palata ya mitako monkama na ntuku isato, na sani esusu ya palata ya mitako ntuku nsambo, lokola bakotangaka myango o esika esantu ; yango ibale itondi na fufu esangani na mafuta mpo ezala libonza lya bolei.
Numb LinVB 7:50  Abonzi mpe kopo ya wolo ya mitako zomi, etondi na mpaka ya malasi ;
Numb LinVB 7:51  na ngombe mobali yoko, mpata mobali yoko, mwana mpata ya mbula yoko bo libonza lya kotumba ;
Numb LinVB 7:52  na ntaba mobali yoko bo moboma mwa bolimbisi masumu ;
Numb LinVB 7:53  mpe bo moboma mwa bondeko abonzi ngombe babali ibale, mpata babali itano, ntaba babali itano mpe bana mpata itano ya mbu­la yoko : libonza lya Elisama, mwana wa Amniud.
Numb LinVB 7:54  Oyo ayei na libonza o mokolo mwa mwambi, Gamaliel, mwana wa Pedasur, mokonzi wa libota lya Manase.
Numb LinVB 7:55  Abonzi sani yoko ya palata ya mitako monkama na ntuku isato, na sani esusu ya palata ya mitako ntuku nsambo, lokola bakotangaka myango o esika esantu ; yango ibale itondi na fufu esangani na mafuta mpo ezala libonza lya bolei.
Numb LinVB 7:56  Abonzi mpe kopo ya wolo ya mitako zomi etondi na mpaka ya malasi ;
Numb LinVB 7:57  na ngombe mobali yoko, mpata mobali yoko, mwana mpata ya mbula yoko bo libonza lya kotumba,
Numb LinVB 7:58  na ntaba mobali yoko bo moboma mwa bolimbisi masumu,
Numb LinVB 7:59  mpe bo moboma mwa bondeko abonzi ngombe babali ibale, mpata babali itano, ntaba babali itano mpe bana mpata itano ya mbula yoko : libonza lya Gamliel, mwana wa Pedasur.
Numb LinVB 7:60  Oyo ayei na libonza o mokolo mwa libwa, Abidan, mwana wa Gideoni, mokonzi wa libota lya Benyamin.
Numb LinVB 7:61  Abonzi sani yoko ya palata ya mitako monkama na ntuku isato, na sani esusu ya palata ya mitako ntuku nsambo, lokola bakotangaka myango o esika esantu ; yango ibale itondi na fufu esangani na mafuta mpo ezala libonza lya bolei.
Numb LinVB 7:62  Abonzi mpe kopo ya wolo ya mitako zomi etondi na mpaka ya malasi ;
Numb LinVB 7:63  na ngombe mobali yoko, mpata mobali yoko, mwana mpata ya mbula yoko bo libonza lya kotumba ;
Numb LinVB 7:64  na ntaba mobali yoko bo moboma mwa bolimbisi masumu ;
Numb LinVB 7:65  mpe bo moboma mwa bondeko abonzi ngombe babali ibale, mpata babali itano, ntaba babali itano mpe bana mpata itano ya mbula yoko : libonza lya Abidan, mwana wa Gideoni.
Numb LinVB 7:66  Oyo ayei na libonza o mokolo mwa zomi, Akiezer, mwana wa Amisadai, mokonzi wa libota lya Dan.
Numb LinVB 7:67  Abonzi sani yoko ya palata ya mitako monkama na ntuku isato, na sani esusu ya palata ya mitako ntuku nsambo, lokola bakotangaka myango o esika esantu ; yango ibale itondi na fufu esangani na mafuta mpo ezala libonza lya bolei.
Numb LinVB 7:68  Abonzi mpe kopo ya wolo ya mitako zomi, etondi na mpaka ya malasi ;
Numb LinVB 7:69  na ngombe mobali yoko, mpata mobali yoko, mwana mpata ya mbula yoko bo libonza lya kotumba ;
Numb LinVB 7:70  na ntaba mobali yoko bo moboma mwa bolimbisi masumu ;
Numb LinVB 7:71  mpe bo moboma mwa bondeko abonzi ngombe babali ibale, mpata babali itano, ntaba babali itano mpe bana mpata itano ya mbula yoko : libonza lya Akiezer, mwana wa Amisadai.
Numb LinVB 7:72  Oyo ayei na libonza o mokolo mwa zomi na moko, Pagiel, mwana wa Okran, mokonzi wa libota lya Aser.
Numb LinVB 7:73  Abonzi sani yoko ya palata ya mitako monkama na ntuku isato, na sani esusu ya palata ya mitako ntuku nsambo, lokola bakotangaka myango o esika esantu ; yango ibale itondi na fufu esangani na mafuta mpo ezala libonza lya bolei.
Numb LinVB 7:74  Abonzi mpe kopo ya wolo ya mitako zomi, etondi na mpaka ya malasi ;
Numb LinVB 7:75  na ngombe mobali yoko, mpata mobali yoko, mwana mpata ya mbula yoko bo libonza lya kotumba ;
Numb LinVB 7:76  na ntaba mobali yoko bo moboma mwa bolimbisi masumu ;
Numb LinVB 7:77  mpe bo moboma mwa bondeko abonzi ngombe babali ibale, mpata babali itano, ntaba babali itano mpe bana mpata itano ya mbula yoko : libonza lya Pagiel, mwana wa Okran.
Numb LinVB 7:78  Oyo ayei na libonza o mokolo mwa zomi na mibale, Akira, mwana wa Enan, mokonzi wa libota lya Neftali.
Numb LinVB 7:79  Abonzi sani yoko ya palata ya mitako monkama na ntuku isato, na sani esusu ya palata ya mitako ntuku nsambo, lokola bakotangaka myango o esika esantu ; yango ibale itondi na fufu esangani na mafuta mpo ezala libonza lya bolei.
Numb LinVB 7:80  Abonzi mpe kopo ya wolo ya mitako zomi, etondi na mpaka na malasi ;
Numb LinVB 7:81  na ngombe mobali yoko, mpata mobali yoko, mpata ya mbula yoko bo libo­nza lya kotumba ;
Numb LinVB 7:82  na ntaba mobali yoko bo moboma mwa bolimbisi masumu ;
Numb LinVB 7:83  mpe bo moboma mwa bo­nde­ko abonzi ngombe babali ibale, mpata babali itano, ntaba babali itano mpe bana mpata itano ya mbula yoko : libonza lya Aira, mwana wa Enan.
Numb LinVB 7:84  Mango mana mabonza ma banku­mu ba Israel mpo ya bobenisi altare o mokolo bapakoli yango mafuta : sani ya palata zomi na ibale, sani isusu ike ya palata zomi na ibale, kopo ya wolo zomi na ibale.
Numb LinVB 7:85  Sani enene yoko yoko ya palata ekoki mitako monkama na ntuku isato, sani eke yoko yoko ekoki mitako ntuku nsa­mbo. Bozito mobimba bwa palata ya biloko bina binso bokoki mitako 2 400, lokola bakotangaka o esika esa­ntu.
Numb LinVB 7:86  Kopo ya wolo zomi na ibale, itondi na mpaka ya malasi ikoki yoko yoko mitako zomi, lokola bakota­nga­ka o esika esantu. Bozito mobimba bwa kopo ya wolo bokoki mitako 120.
Numb LinVB 7:87  Motango mobimba mwa bibwele bo libonza lya kotumba : ngombe babali zomi na ibale, mpata babali zomi na ibale, bana mpata zomi na ibale ya mbula yoko, bakisa naino mabonza masusu ma bolei. Bo moboma mwa bolimbisi masumu : ntaba babali zomi na ibale.
Numb LinVB 7:88  Motango mobimba mwa bibwele bo moboma mwa bondeko : ngombe babali ntuku ibale na inei, mpata babali ntuku motoba, ntaba babali ntuku motoba, mpe bana mpata ntuku motoba. Mabonza babonzi mpo ya bobenisi altare nsima ya bopakoli mafuta, mango mana.
Numb LinVB 7:89  Esika Moze akoti o Ema ya Likita mpo ya kosolola na Yawe, ayoki lolaka lozali koloba na ye ut’o nso­nge ya ezipeli ya Sanduku ya Bo­ndeko kati ya ba-kerubim babale. Na nsima Moze abandi koloba na Yawe.
Chapter 8
Numb LinVB 8:2  « Loba na Aron : Esika okobongisa miinda, miinda nsambo misengeli kopela epai ya liboso lya etemiseli ya mwinda. »
Numb LinVB 8:3  Aron asali bongo, abongisi miinda epai ya liboso lya etemiseli ya mwi­nda se lokola Yawe atindaki Moze.
Numb LinVB 8:4  Batulaki etemiseli eye ya mwinda na wolo, banda nse tee likolo. Basalaki etemiseli ya mwinda se lokola Yawe alakisaki Moze.
Numb LinVB 8:6  « Kamata ba-Levi o kati ya bana ba Israel mpe petola bango.
Numb LinVB 8:7  Mpo ya kopetola ba­ngo sala boye : Nyakela bango mai ma bopetoli ; bakata nsuki inso ya nzoto, basukola bilamba bya bango, bongo bakoma peto.
Numb LinVB 8:8  Na nsima bakamata ngombe mobali yoko, mpe libonza lya fufu esangani na mafuta ; yo mpe kamata ngombe esusu bo moboma mwa bolimbisi masumu.
Numb LinVB 8:9  Nsima lekisa ba-Levi liboso lya Ema ya Likita mpe o esika ena sangisa bana banso ba Israel.
Numb LinVB 8:10  Awa olekisi ba-Levi liboso lya Yawe, bana ba Israel batandela bango maboko.
Numb LinVB 8:11  Na nsima Aron alakisa bango na Yawe lokola libonza bakopesa Yawe o nko­mbo ya bana ba Israel. Mpe ut’o nta­ngo ena bakoki kobanda mosala mwa Yawe.
Numb LinVB 8:12  Na nsima ba-Levi batia loboko o mitó mya ngombe babali. Mpe yo bonzela Yawe yango, yoko ezala moboma mwa bolimbisi masumu, esusu ezala libonza lya kotumba mpo ’te ba-Levi bazwa bolimbisi masumu.
Numb LinVB 8:13  Na nsima tia ba-Levi o boso bwa Aron na bana ba ye, mpe bonzela Yawe bango lokola libonza.
Numb LinVB 8:14  Bobele bo­ngo okopono ba-Levi o kati ya bana ba Israel, mpo bazala bato ba ngai.
Numb LinVB 8:15  Na nsima babanda mosala o Ema ya Likita. Petola bango mpe bonzela Yawe bango lokola libonza lipesami,
Numb LinVB 8:16  zambi baponomi o kati ya bana ba Israel, bakabami na ngai. Naponi ba­ngo bazala ba ngai o esika ya bana ba yambo banso ba Israel, baye bafu­ngoli mabumu ma bamama.
Numb LinVB 8:17  Ya solo, epai ya bana ba Israel, oyo abotami liboso azali wa ngai, azala moto to nyama, zambi ut’o mokolo nabomaki bana ba yambo o mokili mwa Ezipeti nakamataki bango mpo ya ngai.
Numb LinVB 8:18  O esika ya bana babotami yambo o Israel, nakamataki ba-Levi.
Numb LinVB 8:19  O kati ya ba-Israel, nakotikela Aron na bana ba ye bato ba libota lya Levi, zambi bango bazali libota liye bana ba Israel bapesaki Nzambe. Bango basalela bana ba Israel mosala o Ema ya Likita ; basambela mpo ya bango milulu mya bolimbisi masumu, bongo bana ba Israel bakozwa etumbu te soko bakomi penepene na esika esantu. »
Numb LinVB 8:20  Moze, Aron na bato banso ba Isra­el basali na ba-Levi manso lokola Yawe atindaki Moze ; solo, bana ba Israel basali ba-Levi bobele bongo.
Numb LinVB 8:21  Ba-Levi bamipetoli, basukoli bilamba bya bango, mpe Aron alakisi mpe abonzi bango o maboko ma Yawe ; asali mpo ya bango milulu mya bolimbisi masumu.
Numb LinVB 8:22  Na nsima ba-Levi bakei kobanda mosala mwa bango o Ema ya Likita o miso ma Aron mpe ma bana ba ye. Basali na bango se lokola Yawe atindaki Moze o maye matali ba-Levi.
Numb LinVB 8:24  « Nakopesa yo mobeko mpo ya ba-Levi. Ut’o mokolo mo-Levi akokisi mibu ntuku ibale na mitano asengeli kosala mosala o Ema ya Likita.
Numb LinVB 8:25  Ekokisi ye mibu ntuku itano, alongwa o mosala, asala lisusu te.
Numb LinVB 8:26  Kasi akoki kosalisa naino bandeko ba ye mpo ya kokengele mo­sala mwa bango o Ema ya Likita ; kasi ye moko asala te. Tala lolenge okosala na ba-Levi. »
Chapter 9
Numb LinVB 9:1  Ebimaki bango o mokili mwa Ezipeti, o mobu mwa mibale, o sanza ya yambo, Yawe alobi na Moze, o eliki ya Sinai, maloba maye :
Numb LinVB 9:2  « Bana ba Israel basepela eyenga ya Pasika o mokolo motindami :
Numb LinVB 9:3  Bosepela eye­nga o mokolo mwa zomi na minei mwa sanza eye, pene na butu. Bola­nda se mibeko mpe mimeseno mya yango. »
Numb LinVB 9:4  Moze atindi bana ba Israel ’te basepela eyenga ya Pasika.
Numb LinVB 9:5  Basepeli ya­ngo o eliki ya Sinai, o sanza ya ya­mbo, o mokolo mwa zomi na minei, pene na butu. Bana ba Israel basali manso lokola Yawe atindaki Moze.
Numb LinVB 9:6  Nzokande bato basusu bakomi na mbindo zambi basimbaki ebembe ; yango wana bakoki kosepela eyenga ya Pasika o mokolo mona te. Bobele o mokolo mona bayei koluka Moze na Aron.
Numb LinVB 9:7  Balobi na bango : « Biso tokomi mbindo zambi tosimbaki ebembe. Mpo nini bobele biso o kati ya bana ba Israel, tokoki kobonzela Yawe libonza te o mokolo motindami ? »
Numb LinVB 9:8  Moze ayanoli bango : « Bozila ngai, nakende koyoka maye Yawe akoti­nda bino. »
Numb LinVB 9:10  « Loba na bana ba Israel : Soko o kati ya bino to bana ba bino, moto moko akomi mbi­ndo zambi asimbaki ebembe, to soko azali o mobembo mosika, ye mpe asepela eyenga ya Pasika mpo ya Yawe.
Numb LinVB 9:11  Asala bongo o sanza ya ibale o mokolo mwa zomi na minei, pene na butu. Alia yango na mampa mazangi nkisi, na ndunda bololo.
Numb LinVB 9:12  Eloko yoko etikala tee ntongo te, babuka ata monkuwa moko te. Basala manso se lokola mobeko mwa Pasika motindi.
Numb LinVB 9:13  Kasi soko moto azali peto, to azali na mobembo te, mpe atiki kolia limpati lya Pasika, malamu balongola ye o libota lya bino. Mpamba te, abo­nzeli Yawe libonza te o mokolo motindami, bongo andima etumbu mpo ya lisumu lya ye.
Numb LinVB 9:14  Soko mompaya afandi epai ya bino mpe alingi kolia limpati lya Pasika mpo ya Yawe, asala se lokola mobeko mpe mimeseno mya Pasika mitindi. Na mompaya na mwana mboka batosa mobeko se moko. »
Numb LinVB 9:15  Mokolo batelemisi Ndako esa­n­tu, limpata lisipaki Ndako esantu, Ema ya Likita. Banda mpokwa tee ntongo sa, limpata limononi lokola móto likolo lya Ndako.
Numb LinVB 9:16  Bongo li­mpata lisipi ndako ntango inso limononi lokola móto tee ntongo sa.
Numb LinVB 9:17  Mbala inso limpata lilongwi likolo lya Ema, bana ba Israel balongoli nganda. O esika limpata liyei kokita bapiki nganda ya bango.
Numb LinVB 9:18  Bana ba Israel bakei lokola Yawe atindaki bango, mpe bafandi o esika ena, se lokola Yawe apesaki etinda. Batikali wana o nganda ntango inso limpata lisalaki kozipa Ema.
Numb LinVB 9:19  Esika limpata liumeli mwa mikolo likolo lya Ema bana ba Israel bakumisi Yawe, mpe balongoli nganda te.
Numb LinVB 9:20  Soko limpata liumeli mikolo mingi te likolo lya Ema, bapiki nganda lokola Yawe atindi ; soko Yawe atindi ’te balongola nganda, balongoli.
Numb LinVB 9:21  Soko limpata liumeli bobele banda mpokwa tee nto­ngo sa, mpe lilongwi na ntongo, bango bakei o ntango ena. Soko li­mpata liumeli mokolo mobimba, butu moi, mpe nsima lilongwi, bango bakei.
Numb LinVB 9:22  To limpata liumeli mikolo mibale, to sanza yoko, to mobu mobimba. Esika limpata lizalaki likolo lya Ema, bana ba Israel batikali kofanda, esika limpata lilongwi bango mpe balongwi.
Numb LinVB 9:23  Bongo bazalaki kofanda to kokende se lokola Yawe azalaki kotinda. Bazalaki kokumisa Yawe se lokola Yawe atindaki Moze.
Chapter 10
Numb LinVB 10:2  « Kamata palata mpe tula na ya­ngo mindule mibale, misalisa yo mpo ya kobenga bato mpe koyebisa bato ba nganda ’te elaka ya kokende ekoki.
Numb LinVB 10:3  Esika bakobete mondule, bato banso baya kosangana penepene na yo o monoko mwa Ema ya Likita.
Numb LinVB 10:4  Kasi soko babeti se mondule moko, bobele bankumu na bayangeli ba mabota ma Israel baya epai ya yo.
Numb LinVB 10:5  Soko bobeti mondule boumeli, bato ba nganda eye ezali o Esti bake­nde.
Numb LinVB 10:6  Soko bobeti mondule mbala ya ibale boumeli, bato ba nganda eye ezali epai ya Sudi bakende. Bongo mpo ’te bato bakende, babete mindule mpe baga­nga ;
Numb LinVB 10:7  kasi mpo ya kosa­ngi­sa bato se kosangisa, babete mi­ndu­le kasi baga­nga te.
Numb LinVB 10:8  Kobete mi­ndule ezali mosala mwa bana ba Aron, banganga Nza­mbe : ezali mobeko mwa seko napesi bino mpe bana ba bino.
Numb LinVB 10:9  Soko mokolo mosusu o mokili mwa bino bokei kobundisa monguna azali konyokolo bino, bobete mindule mpe boganga. Yawe Nzambe wa bino akokanisa bino mpe akobikisa bino o maboko ma banguna.
Numb LinVB 10:10  O mikolo bokosepela biyenga bya bino o mikolo mya sanza ya sika, bobete mindule o ntango bokobonza mabo­nza to miboma mya bondeko. O nta­ngo ena bokanisa Nzambe wa bino. Ngai nazali Yawe Nzambe wa bino. »
Numb LinVB 10:11  O mobu mwa mibale, o sanza ya ibale, o mokolo mwa ntuku ibale, limpata lilongwi likolo lya Ema ya Likita.
Numb LinVB 10:12  Bana ba Israel babandi kokende limpinga na limpinga mpe balongwi o eliki ya Sinai. Limpata litelemi o eliki ya Paran.
Numb LinVB 10:13  Baye batamboli liboso lokola Yawe atindaki Moze :
Numb LinVB 10:14  Nsima ya be­ndele ya nganda ya bango bana ba Yuda bakei, lingomba na lingomba. Moto akambi limpinga lya Yuda, Nakason, mwana wa Aminadab.
Numb LinVB 10:15  Moto akambi limpinga lya Isakar, Netanel, mwana wa Suar.
Numb LinVB 10:16  Oyo akambi li­mpinga lya Zabulon, Eliab, mwana wa Elon.
Numb LinVB 10:17  Balongoli Ndako esantu biteni biteni mpe bana ba Gerson na bana ba Merari bamemi Ndako esantu.
Numb LinVB 10:18  Nsima ya bendele ya nganda ya bango bana ba Ruben bakei, lingo­mba na lingomba. Moto akambi li­mpinga lya Ruben, Elisur, mwana wa Sedeur.
Numb LinVB 10:19  Oyo akambi limpinga lya Simeon, Selumiel, mwana wa Surisadai.
Numb LinVB 10:20  Oyo akambi limpinga lya Gad, Eliasaf, mwana wa Reuel.
Numb LinVB 10:21  Na nsima bana ba Keat bakei na biloko bisantu, zambi basusu bazalaki kotonga Ndako esantu ntango bayei naino te.
Numb LinVB 10:22  Nsi­ma ya bendele ya nganda ya bango bana ba Efraim bakei, lingo­mba na lingomba. Moto akambi li­mpinga lya Efraim, Elisama, mwana wa Amiud.
Numb LinVB 10:23  Oyo akambi limpinga lya Manase, Gamliel, mwana wa Pedasur.
Numb LinVB 10:24  Oyo akambi limpinga lya Be­nyamin, Abidan, mwana wa Gideoni.
Numb LinVB 10:25  Na nsuka bana ba Dan bakei nsima ya bendele ya nganda ya bango, lingomba na lingomba. Moto akambi limpinga lya Dan, Akiezer, mwana wa Amisadai.
Numb LinVB 10:26  Oyo akambi limpi­nga lya Aser, Pagiel, mwana wa Okran.
Numb LinVB 10:27  Oyo akambi limpinga lya Neftali, Aira, mwana wa Enan.
Numb LinVB 10:28  Tala molo­ngo mwa bana ba Israel mokolo balongwi o eliki ya Sinai.
Numb LinVB 10:29  Moze alobi na Obab, mwana wa Reuel, moto wa Madian, bokilo wa ye : « Sikawa tozali kokende o mokili moye Yawe alobaki ’te akopesa biso mwango. Yaka na biso elongo mpe tokosala yo se malamu, zambi Yawe alakeli Israel se bolamu. »
Numb LinVB 10:30  Ye ayanoli : « Nakokende te, nakozonga o mokili mwa ngai epai ya bandeko ba ngai. »
Numb LinVB 10:31  Moze akobi : « Otika biso bo­ngo te, zambi yo moto oyebi bisika binso epai tolingi kopika nganda ya biso o eliki ; yo zala mokambi wa biso.
Numb LinVB 10:32  Soko oyei na biso elongo, bolamu bonso Yawe alingi kopesa biso, tokopesa yo mpe bwango. »
Numb LinVB 10:33  Balongwi o ngomba ya Yawe mpe batamboli mikolo misato. Sa­nduku ya Bondeko ekei liboso lya bango o mobembo mwa mikolo mina misato, mpo ya kolakisa bango esika ya kopema na butu.
Numb LinVB 10:34  Elongwi ba­ngo o nganda, o ntango ya moi, li­mpa­ta lya Yawe lizalaki likolo lya bango.
Numb LinVB 10:35  O ntango bakei na sanduku, Moze alobi : « E Yawe, teleme, mpo ’te banguna ba yo bapanzana, mpe bato bakoyinaka yo bakima liboso lya yo. »
Numb LinVB 10:36  Mpe esika basukisi mobembo na mpokwa, Moze alobi : « E Yawe, zo­nga epai ya bato ba Israel nkoto na nkoto. »
Chapter 11
Numb LinVB 11:1  Mokolo moko bato babandi kosala makeléle mingi, mpe boleli bwa bango bokomi tee o matoi ma Yawe. Eyoki Yawe bongo, asiliki mingi mpe móto mwa Yawe mobandi kopela o nganda mpe mozikisi eteni ya nsuka ya nganda.
Numb LinVB 11:2  Bato babengi Moze. Ye abondeli Yawe mpe móto mokomi kosila.
Numb LinVB 11:3  Bapesi esika ena nkombo Tabera, zambi móto mwa Yawe mobandaki kozikisa bato ba Israel.
Numb LinVB 11:4  Bifaka bya bato o kati ya ba-Isra­el bakomi koyoka mposa ya biloko. Bana ba Israel bango moko bakomi kolela, balobi : « Nani akopesa biso nyama tolia ?
Numb LinVB 11:5  Wapi mbisi tozalaki kolia o Ezipeti ? Wapi ndunda, mpo­ndu, matungulu na pilipili ?
Numb LinVB 11:6  Sikawa tozali kokondo, tozangi biloko, tozali se komono manu ! »
Numb LinVB 11:8  Bato bapalangani mpo ya kolokoto yango ; na nsima baniki yango na libanga, batuti yango o eboka, bo­ngo balambi yango o nzungu, mpe basali na yango minkate, ezalaki na elengi lokola fufu elambami na mafuta.
Numb LinVB 11:9  Ntango londende lokiti o nganda na butu, manu mpe makwei o mabelé.
Numb LinVB 11:10  Moze ayoki ndenge bato ba ye ba­za­laki komilela, moto na moto o monoko mwa ema ya ye. Yawe asiliki mingi. Moze ayoki motema mawa,
Numb LinVB 11:11  mpe atuni Yawe : « Mpo nini osali mosaleli wa yo mabe boye ? Mpo nini oyokeli ngai mawa te mpe opesi ngai mokumba monene mwa koya­ngela bato baye banso ?
Numb LinVB 11:12  Ngai moto namemeki bango o libumu ? Ngai moto nabotaki bango ? Boniboni olobi na ngai : Meme bango o maboko lokola mama akomemeke mwana wa ye oyo akonunga mabéle, mpe kende na bango o mokili nalakelaki bankoko ba bango ?
Numb LinVB 11:13  Nazwa misuni epai wa­pi sikawa mpo ya koleisa bato ebe­le boye ? Bazali koya epai ya ngai, baleli nzala, balobi : Pesa biso misuni tolia.
Numb LinVB 11:14  Ngai moko nakoki kokamba bato mingi boye te ; mokumba moleki monene.
Numb LinVB 11:15  Soko olingi nasala mosala moye, malamu nakufa lelo ! Yokela ngai mawa, namono lisusu mpasi boye te ! »
Numb LinVB 11:16  Yawe alobi na Moze : « Pono bato ntuku nsambo o Israel, bakolo ba mbo­ka mpe bateyi ba Mobeko. Meme bango o Ema ya Likita, mpe fa­ndisa bango penepene na yo.
Numb LinVB 11:17  Ngai nakokita mpo ’te nasolola na yo ; nakokamata ndambo ya mayele ma yo mpo ya kokabela bango. Bango bakoyangela ekolo mobimba elongo na yo ; okozala lisusu yo moko te.
Numb LinVB 11:18  Loba na bato : Bomibongisa, lobi bokolia misuni, zambi bokimelaki o matoi ma Yawe : “Nani akopesa biso misuni tolia ? O Ezipeti tozalaki se malamu !” Yawe akopesa bino misuni.
Numb LinVB 11:19  Bokolia myango bobele mokolo moko te, mikolo mibale te, mitano te, ata zomi to ntuku ibale te,
Numb LinVB 11:20  kasi bokolia myango sanza mobimba tee eko­bima bino o zolo mpe bokoyoka yango mpi, zambi boboyaki Yawe oyo azali o kati ya bino mpe bolelaki epai ya ye mpe bolobaki : Mpo nini tobimaki o mokili mwa Ezipeti ? »
Numb LinVB 11:21  Moze alobi : « Bato baye ngai nazali o kati ya bango, bazali bato nkoto nkama motoba, mpe yo olobi : Nakopesa bango misuni sanza mobi­mba.
Numb LinVB 11:22  Ata tobomi bibwele bya biso binso, na nyama inene na ike, yango ikokoka na bango ? Ata tobomi mbisi inso o mbu yango nde ikokoka ? »
Numb LinVB 11:23  Yawe ayanoli Moze : « Loboko la Yawe lozali nde mokuse ? Okomono ’te maye nalobaki makosalema to te. »
Numb LinVB 11:24  Moze abimi mpe ayebisi bato maloba maye ma Yawe. Na nsima asa­ngisi bakolo ntuku nsambo mpe akei na bango penepene na Ema ya Likita.
Numb LinVB 11:25  Yawe akiti o kati ya limpata, asololi na ye ; akamati Elimo akiteli Moze mpe akabeli bakolo ntuku nsambo ndambo ya Elimo. Awa Elimo akiteli bango, babandi kosakola makambo ; kasi na nsima basali bo­ngo lisusu te.
Numb LinVB 11:26  Bato babale batikalaki o nganda, nkombo ya bango Eldad na Medad ; bakendeki o Ema te, kasi Elimo akiteli mpe bango, babandi kosakola o nganda.
Numb LinVB 11:27  Elenge mobali moko akei koloba na Moze : « Tala Eldad na Medad bazali kosakola o nganda. »
Numb LinVB 11:28  Yozue, mwana wa Nun, moto asaleli Moze ut’o bomwana, alobi : « Moze, mokonzi wa ngai, pekisa bango ! »
Numb LinVB 11:29  Moze ayanoli : « Ozali nde na zuwa mpo ya ngai ? Malamu Nzambe akabela banso Elimo wa ye mpe bato banso ba ekolo ya Nzambe basakola ! »
Numb LinVB 11:30  Na nsima Moze azongi o nganda elongo na bakolo ba Israel.
Numb LinVB 11:31  Yawe atindi mompepe mouti epai ya mbu, mobendi bisosolo ebele mpe mobwaki byango o nganda. Bikwei wana ebele mpenza zongazonga na nganda, tee ntaka ya mobembo mwa mokolo moko, na bosanda bwa maboko mabale.
Numb LinVB 11:32  Bato basali mosala mokolo mobimba, butu moi, mpo ya kolokoto bisosolo, mpe o mokolo mwa nsima lokola. Soko moto ato­ndisi bingwongolo zomi alokoti se moke. Batandi yango zongazonga na nganda.
Numb LinVB 11:33  Mosuni mozalaki naino o monoko, naino basilisi kolia mwango te, Yawe ayokeli bango nkanda mpe­nza, ati­ndeli bango bokonobobe.
Numb LinVB 11:34  Bapesi esi­ka ena nkombo Kibrot-Atava, zambi o esika ena bakundi bato baye bakufaki mpo ya lokoso la bango.
Numb LinVB 11:35  Longwa Kibrot-Atava, bato bakei o Aserot, bongo bapiki nganda ya bango o Aserot.
Chapter 12
Numb LinVB 12:1  Miriam, ndeko mwasi wa Moze, na Aron babandi kotongo Moze, zambi abalaki mwasi wa Kusi. Ya solo, Moze abalaki mwasi moko wa Kusi.
Numb LinVB 12:2  Balobi : « Yawe ako­lobaka bobele na monoko mwa Moze ? Alobaki na biso mpe te ? » Yawe ayoki yango.
Numb LinVB 12:3  Moze azalaki moto wa bosawa mpenza ; o nse mobimba moto wa bosawa lokola ye azalaki te.
Numb LinVB 12:4  Sikawa Yawe alobi na Moze, na Aron mpe na Miriam : « Yakani bino basato o Ema ya Likita. » Bakei ba­ngo basato.
Numb LinVB 12:5  Mpe Yawe akiti o limpata mpe atelemi o monoko mwa ema ; abengi Aron na Miriam ; bango babale babelemi na ye.
Numb LinVB 12:6  Yawe alobi : « Boyoka maloba ma ngai : Nakomiyebisaka na baprofeta ba bino na mamoni, mpe nakolobaka na bango na ndoto.
Numb LinVB 12:7  Kasi na mosaleli wa ngai Moze nakosalaka bongo te, mpo azali moto wa ndako ya ngai.
Numb LinVB 12:8  Ya­ngo wana nakoloba na ye lokola moto akolobaka na moninga wa ye ; nakoloba na ye polele, na mamoni te ; ye akomonoko elongi ya ngai Yawe. Mpo nini botongoki mosaleli wa ngai Moze ? »
Numb LinVB 12:10  Limpata lilongwi likolo lya Ema ya Likita. Tala Miriam akomi na bokono bwa maba, lomposo la ye lokomi mpembe. Aron atali ye, amoni ’te akomi na maba.
Numb LinVB 12:11  Aron alobi na Moze : « E Moko­nzi wa ngai, opesa biso etumbu te mpo ya lisumu tosali na bozoba bwa biso ; tosali mabe solo.
Numb LinVB 12:12  Nabondeli yo : Miriam azala te lokola mwana akufi o libumu lya mama, lokola mwana asili abebi, naino abimi o libumu lya mama te. »
Numb LinVB 12:13  Mpe Moze abondeli Yawe : « E Mokonzi, nasengi yo, obikisa ye ! »
Numb LinVB 12:14  Yawe alobi na Moze : « Soko tata wa ye abwakelaki ye nsoi o elongi, mbele Miriam akoyoka nsoni te mikolo nsambo mobimba ? Tika balo­ngola ye o nganda mikolo nsambo mpe na nsima akoki kozonga awa. »
Numb LinVB 12:15  Babimisi Miriam o nganda mikolo nsambo. Bato bakobi mobembo te tee mokolo Miriam azongi o nganda.
Numb LinVB 12:16  Na nsima bato balongwi o Aserot, mpe bapiki nganda o eliki ya Paran.
Chapter 13
Numb LinVB 13:2  « Tinda bato bakende konongo mokili mwa Kanana, mokili moye nalingi kopesa bana ba Israel : opono moto moko o libota lyoko lyoko, se bankumu. »
Numb LinVB 13:3  Moze atindi bango o eliki ya Paran lokola Yawe alobaki na ye. Bango banso bazalaki bakonzi ba mabota ma Israel.
Numb LinVB 13:4  Tala nkombo ya bango : O libota lya Ruben, Samnua, mwana wa Zakur.
Numb LinVB 13:11  O libota lya Yozefu, lisali libota lya Manase, Gadi, mwana wa Susi.
Numb LinVB 13:16  Tala nkombo ya bato Moze ati­ndaki bakende konongo mokili mona. Moze apesi Osea, mwana wa Nun nkombo esusu : Yozue.
Numb LinVB 13:17  Moze atindi bango bakende konongo mokili mwa Kanana, alobi : « Bokende o mokili mwa Negeb, na nsima bobuta ngomba kuna.
Numb LinVB 13:18  Botala lolenge mokili mozali, botala soko bato bafandi kuna bazali makasi to te, soko bazali moke to mingi.
Numb LinVB 13:19  Botala mokili esika bafandi, soko mozali molamu to mobe ; botala mboka esika bafandi, soko ezali se nganda mpamba to soko ezingami na mapa­ngo makasi.
Numb LinVB 13:20  Botala soko mabelé makobotaka mbuma mingi to te, soko mokili mozali na nzete to te. Bozala na mpiko mpe boyela biso mbuma ya mokili mona. » Ezalaki eleko mbuma ya vino isalaki kotela.
Numb LinVB 13:21  Bakei mpe batali mokili banda eliki ya Sin tee Rekob, penepene na Amat.
Numb LinVB 13:22  Baleki epai ya Negeb mpe bakomi o Ebron, esika bakuti Akiman, Sesai na Talmai, bana ba Anak. Batongaki Ebron mibu nsambo liboso lya Tanis o Ezipeti.
Numb LinVB 13:23  Bakomi o lobwaku la Eskol, bakati etapi ya nzete ya vino mpe etuka ya mbuma ya vino ; bato babale bamemi yango na lingenda ; bamemi mpe mbuma ya malala mpe ya figi.
Numb LinVB 13:24  Bapesi lobwaku lona nkombo Eskol, lokola ‘te : etuka ya mbuma ya vino, zambi o esika ena bana ba Israel babukaki etuka ya mbuma.
Numb LinVB 13:25  Nsima ya mikolo ntuku inei basilisi kotala mokili mobimba.
Numb LinVB 13:26  Bazo­ngi mpe bakutani na Moze, Aron na bato banso ba Israel o eliki ya Paran, o mboka Kades. Bayebisi bango na mpe bato banso maye manso bamonoki, balakisi mpe mbuma ya bilanga bya mokili mona.
Numb LinVB 13:27  Balobi boye : « Tokendeki kotala mokili mona lokola otindaki biso. Ya solo, mokili moye motondi na mabéle ma ngo­mbe mpe na mafuta ma nzoi. Talani mbuma ya mokili mona.
Numb LinVB 13:28  Nzokande bato bafandi kuna bazali bilombe ; bafandi o mboka inene, izingami na mapango manene mpenza ; tomonoki mpe bankoko ba Anak kuna.
Numb LinVB 13:29  Ba-Amalek bafandi o mokili mwa Negeb ; ba-Iti, ba-Amor na ba-Yebus bafandi o ngomba ; ba-Kanana bafandi penepene na mbu mpe o libongo lya Yordane. »
Numb LinVB 13:30  Kaleb ameki kolendisa mitema mya bato bazalaki kowelana na Moze, alobi : « Malamu tokende kuna, tobotolo mokili mwa bango ; tokokoka bango, tokolonga. »
Numb LinVB 13:31  Kasi baye bake­ndeki na ye elongo balobi : « Tokoki kokende kobundisa bango te, baleki biso na bokasi. »
Numb LinVB 13:32  Mpe babandi kolimbolela bango lolenge la mokili bamonoki, balobi : « Mokili tokendeki kotala mozali mokili mokoliaka bato. Bato banso tomonoki bazali balai.
Numb LinVB 13:33  Tomonoki mpe bilombe (bana ba Anak, bankoko ba bilombe ba kala). Kuna tomimonoki lokola mapalela, bango mpe batalaki biso se bongo. »
Chapter 14
Numb LinVB 14:1  Awa bayoki bongo, bato banso batomboki mpe baga­ngi makasi ; bazalaki kolela butu mobi­mba.
Numb LinVB 14:2  Na nsima bana banso ba Israel batomboki na Moze mpe na Aron, balobi na bango : « Mpo nini tokufaki o Ezipeti to awa o eliki te ?
Numb LinVB 14:3  Mpo nini Yawe akambi biso awa o mokili moye mpo baboma biso na mopanga, mpe bayiba basi na bana ba biso ? Eleki malamu tozonga o Ezipeti ! »
Numb LinVB 14:4  Mpe balobani : « Bapesa biso mokambi, bongo tozonga o Ezipeti. »
Numb LinVB 14:5  Moze na Aron bakwei elongi o nse o miso ma bato banso.
Numb LinVB 14:6  Yozue, mwana wa Nun, na Kaleb, mwana wa Yefune, baye bakendeki kotala mokili mwa sika, bapasoli bilamba bya bango.
Numb LinVB 14:7  Balobi na lisanga mobimba lya bana ba Israel : « Mokili tokendeki kotala mozali kitoko mingi.
Numb LinVB 14:8  Soko Yawe asalisi biso, akokotisa biso o mokili mwango akopesa biso. Ezali mokili motondi na mabéle ma ngombe mpe na mafuta ma nzoi.
Numb LinVB 14:9  Botombokela Yawe te. Bobanga mpe bato ba ekolo ena te, zambi tokolo­nga bango. Banzambe ba bango batiki kobatela bango, kasi Yawe azali na biso. Bobanga bango te ! »
Numb LinVB 14:10  Bato banso ba Israel bayokani ’te bakoboma bango na mabanga, kasi o ntango ena nkembo ya Yawe emononi likolo lya Ema ya Likita o miso ma bato banso ba Israel.
Numb LinVB 14:11  Yawe alobi na Moze : « Mikolo boni naino bato baye bakokinola ngai ? Ata nasalaki makamwisi mingi o miso ma bango, mikolo boni bakotia ntembe na ngai ?
Numb LinVB 14:12  Nakotindela bango bokono bobe mpe nakopima bango mokili nalingaki kopesa bango. Kasi nakokomisa yo tata wa ekolo enene, eleki bokasi na boike bwa bato. »
Numb LinVB 14:13  Moze ayanoli Yawe : « Bato ba Ezi­peti bayebi ’te yo moto obimisaki bango o mokili mwa bango na bokasi bwa yo.
Numb LinVB 14:14  Bayebisi bato ba ekolo eye mpo yango. Bayoki ’te yo Yawe ozali o ntei ya bato ba yo, mpe okolakisaka bango elongi ya yo. Bayebi ’te limpata lya yo likotelemeke likolo lya bango, mpe okotambolaka liboso lya bango ; na moi okomononoko lokola limpata, na butu lokola likonzi lya móto.
Numb LinVB 14:15  Soko obomi bato ba yo na mbala yoko boye, bampaya baye bayoki nsango ya yo bakoloba :
Numb LinVB 14:16  ‘Yawe akokaki te kokotisa bato ba ye o mokili moye alayelaki bango ndai ’te bakoyingela wana, yango wana abomi bango banso o eliki.’
Numb LinVB 14:17  Osala bongo te, Mokonzi wa ngai, kasi lakisa sikawa bokasi bwa yo, zambi olobaki :
Numb LinVB 14:18  ‘Ngai Yawe wa ngolu, nakoyokelaka bato mawa. Nayebi koli­mbisa bato soko babuki mobeko mpe soko basali lisumu, kasi nakopesaka etumbu ; ata bana na bankokolo bakozwa etumbu mpo ya masumu ma batata ba bango.’
Numb LinVB 14:19  Sikawa limbisa mabe ma bato baye, mpo oleki bonene mpe bolamu ; limbisa bango lokola osalaki bango banda o mokili mwa Ezipeti tee sikawa. »
Numb LinVB 14:20  Yawe alobi : « Nakolimbisa bango lokola olobi.
Numb LinVB 14:21  Kasi ngai nazali Nza­mbe wa bomoi, mpe nkembo ya Yawe ekotondisamokilimobimba !
Numb LinVB 14:22  Bato baye banso bamonoki nkembo ya ngai mpe makamwisi manene nasalaki o mokili mwa Ezipeti mpe awa o eliki, bango basili komeka ngai mbala zomi mpe baboyaki koyoka lolaka la ngai,
Numb LinVB 14:23  bakomono mokili te, moye nalayaki ndai ’te nakopesa batata ba bango. Ata moto moko te wa baye bakokinolaka ngai akomono mokili mona.
Numb LinVB 14:24  Kasi mosaleli wa ngai Kaleb, oyo azali na motema lokola bango te mpe atosi ngai o makambo manso, ye akokoto o mokili esika akendeki kotala, mpe bana ba ye bakokoma bankolo ba mokili mona.
Numb LinVB 14:25  Ba-Amalek na ba-Kanana bakofandaka o esobe ena. Bozonga lobi esika boutaki, bokende lisusu o eliki, bolanda nzela ekokende epai ya Mbu ya Nsoló. »
Numb LinVB 14:27  « Mikolo boni bato baye babe bakosilikela ngai ? Nayoki boniboni bana ba Israel batombokeli ngai.
Numb LinVB 14:28  Loba na bango : Yawe alobi boye : Ngai nazali Nzambe ; awa bosilikeli ngai nakosala bino lokola bozali koloba o matoi ma ngai.
Numb LinVB 14:29  Awa boto­mbokeli ngai, bino banso botangemi, bino banso bokokisi mibu ntuku ibale : bibembe bya bino bikolala o eliki eye.
Numb LinVB 14:30  Natomboli loboko mpe nalayi ’te bokoyingela te o mokili nalakelaki bino. Bobele Kaleb, mwana wa Yefune, na Yozue, mwana wa Nun bakoyingela kuna.
Numb LinVB 14:31  Bankoko ba bino, baye bolobaki ’te bakokwa o maboko ma banguna, ngai nakokotisa ba­ngo o mokili mona, mpe bakoyeba mokili moye bino boboyaki.
Numb LinVB 14:32  Mpo etali bino, bibembe bya bino bikolala o eliki eye,
Numb LinVB 14:33  mpe bana ba bino bakozala bakengeli ba mpata mpe bakoyengayenga o eliki mibu ntuku inei ; bakozwa etumbu mpo ya masumu ma bino ; ekozala bongo tee bibembe bya bino banso bikolala o eliki.
Numb LinVB 14:34  Botambolaki mikolo ntuku inei mpo ya kotala mokili mona. Mokolo moko mokokoma lokola mobu moko. Yango wana bokofuta mabe ma bino mibu ntuku inei mobimba ; bo­ngo bokoyeba mabe nini bosalaki awa boboyaki ngai.
Numb LinVB 14:35  Ngai Yawe nalobi bongo ! Nakopesa boye etumbu na bato baye babe bayokanaki ’te bakotombokela ngai. O eliki eye moto moko akobika te, banso bakokufa kuna. »
Numb LinVB 14:36  Bato baye Moze atindaki batala mokili, o ntango bazongaki, bapesi bato ba Israel mayele mabe mpo ’te batomboko na Moze, zambi balobaki se maloba mabe mpo ya mokili mona ;
Numb LinVB 14:37  bato baye bapanzi maloba mana, banso bakufi o miso ma Yawe.
Numb LinVB 14:38  O kati ya babali bakendeki kotala mokili mona, bobele Yozue, mwana wa Nun, na Kaleb, mwana wa Yefune, babiki.
Numb LinVB 14:39  Moze akei koyebisa bato ba Israel maloba mana, mpe bato babandi kolela makasi.
Numb LinVB 14:40  Mokolo mwa nsima, na ntongontongo, bakei kobuta tee o nso­nge ya ngomba mpe balobi : « Tala, tozali awa mpe tobuti ngomba eye Yawe alakisaki. Solo, tosali masumu. »
Numb LinVB 14:41  Moze atuni bango : « Boyei kosala nini ? Bobuki mobeko mwa Yawe. Bokolonga soki moke te.
Numb LinVB 14:42  Bobuta te, zambi Yawe azali o ntei ya bino te, bomibwaka o maboko ma banguna te.
Numb LinVB 14:43  Bato ba Amalek na bato ba Kanana bazali liboso lya bino, bokokufa na mopanga mwa bango, zambi boboyaki Yawe mpe Ye akozala na bino te. »
Numb LinVB 14:44  Nzokande na lolendo babuti tee o nsonge ya ngomba, kasi Sanduku ya Bondeko ebimi o nganda te, Moze mpe te.
Numb LinVB 14:45  Ba-Amalek na ba-Kanana bafandi o ngomba ena, bakiti ngomba, bakweisi mpe babomibomi bango, balandi bango tee Orma.
Chapter 15
Numb LinVB 15:2  « Loba na bana ba Israel : Mokolo bosili koyingela o mokili esika bokozala na ndako ya bino, mokili moye nakopesa bino,
Numb LinVB 15:3  soko bobonzeli Yawe mabonza ma kotumba to miboma mya ngombe to mpata : ezala mpo ya kokokisa elako ya bino, ezala libonza bobonzi na motema mwa bino moko, to ezala mpo ya kosepela eyenga ya bino, ntango bolingi kobonzela Yawe libonza lya nsolo mpimbo mpo ya kosepelisa Yawe ;
Numb LinVB 15:4  moto ayei na libonza o nkombo ya ye moko, abo­nzela Yawe sani yoko ya fufu esangani na kopo yoko ya mafuta ;
Numb LinVB 15:5  abakisa mpe kopo yoko ya vino soko alingi kobonza libonza lya mwana mpata.
Numb LinVB 15:6  Soko olingi kobonza mpata mobali, oya na sani ibale ya fufu esangani na kopo ibale ya mafuta,
Numb LinVB 15:7  bakisa naino kopo ibale ya vino bo libonza lya nsolo mpimbo likosepelisa Yawe.
Numb LinVB 15:8  Soko olingi kobonza ngombe mobali, ezala bo libonza lya kotumba to bo moboma, mpo ya kokokisa elako ya yo, to mpo ya kobonzela Yawe libonza lya bondeko,
Numb LinVB 15:9  mpo ya ngo­mbe ena okoya na sani isato ya fufu esangani na kopo isato ya mafuta ;
Numb LinVB 15:10  bakisa kopo isato ya vino, mpo ’te ezala libonza lya nsolo mpimbo mpo ya kosepelisa Yawe.
Numb LinVB 15:11  Sala se bongo na ngombe mobali yoko yoko, na mpata mobali yoko yoko, na nyama eke ata nini, ezala mpata to ntaba.
Numb LinVB 15:12  Basala se motindo moko na nyama inso yoko yoko, iye bakoboma bo libonza.
Numb LinVB 15:13  Bato banso ba Israel basala se bo­ngo mbala inso bakobonza libonza lya nsolo mpimbo mpo ya kosepelisa Yawe.
Numb LinVB 15:14  Soko mompaya ayei kofanda epai ya bino to epai ya bankoko ba bino, ye mpe abonza libonza lya nsolo mpimbo mpo ya kosepelisa Yawe, se lokola bino bokosalaka o lisanga lya bino.
Numb LinVB 15:15  Ná bino ná mompaya botosa mobeko se moko, bankoko ba bino batosa mobeko moye seko : o miso ma Yawe bino na bampaya bokeseni te.
Numb LinVB 15:16  Ná bino ná mompaya afa­ndi epai ya bino botosa mobeko se moko. »
Numb LinVB 15:18  « Loba na bana ba Israel : Soko bosili koyingela o mokili moye nakokamba bino,
Numb LinVB 15:19  mpe soko bolei mampa ma mokili mona bokamata ndambo mpo ya kobonzela Yawe.
Numb LinVB 15:20  O kati ya fufu bolambi bokamata monkate moko bo eteni ya yambo, se lokola bokofutaka mpako ya mbuma ya yambo ya bilanga.
Numb LinVB 15:21  O kati ya mbuma ya yambo bokamata ndambo mpo ya kopesa Yawe. Basala se bongo o mabota manso makoya nsima.
Numb LinVB 15:22  Soko bobuki moko mwa mibeko miye Yawe apesaki Moze, kasi na nko te, mpo bobosani,
Numb LinVB 15:23  lokola ‘te : maka­mbo manso Yawe atindaki na monoko mwa Moze, ut’o mokolo atindaki etinda etali mabota manso makoya nsima,
Numb LinVB 15:24  bosala boye : Soko lisanga mo­bimba libuki mobeko, kasi na nko te, lisanga lina mobimba lisengeli kobonza libonza mpe kotumba ngombe mobali, ezala bongo libonza lya nsolo mpimbo mpo ya kosepelisa Yawe ; babakisa libonza lya masanga lokola mobeko motindi ; baboma mpe ntaba bo moboma mwa bolimbisi masumu.
Numb LinVB 15:25  Nganga Nzambe asala milulu mya bolimbisi masumu mpo ya bato ba­nso ba Israel ; bakozwa bolimbisi masumu, maye basalaki na nko te. Mokolo bayei na libonza lya bango mpo ya kosepelisa Yawe, mpe na moboma mpo ya kozwa bolimbisi masumu, maye basalaki na nko te,
Numb LinVB 15:26  bakoli­mbi­sa bato banso ba Israel na mpe mompaya afandi epai ya bino, zambi bato banso basalaki mabe, kasi na nko te.
Numb LinVB 15:27  Soko bobele moto moko abuki mo­beko, kasi na nko te, ye abonza mwana ntaba ya mbula yoko mpo ’te azwa bolimbisi.
Numb LinVB 15:28  Nganga Nzambe asala mpo ya ye milulu mya bolimbisi mabe maye asalaki, kasi na nko te ; esika basambeli mpo ya ye, masumu ma ye makolimbama,
Numb LinVB 15:29  azala mwana mboka wa Israel to mompaya afandi epai ya bango. Epai ya bino mobeko mozala se moko na moto ata nani asalaki mabe, kasi na nko te.
Numb LinVB 15:30  Kasi soko moto moko abuki mobeko na nko, azala mwana mboka to mo­mpaya, awa atumoli Yawe, balongola ye o libota lya ye.
Numb LinVB 15:31  Bakolimbisa mabe ma ye te, mpo aboyaki liloba lya Yawe mpe abukaki mobeko mwa ye. »
Numb LinVB 15:32  O ntango bana ba Israel bazalaki o eliki, bamoni moto moko azalaki kolokoto nkoni o mokolo mwa Sabato.
Numb LinVB 15:33  Emoni bato ’te azali kolokoto nko­ni, bakei na ye epai ya Moze, Aron na mpe lisanga mobimba.
Numb LinVB 15:34  Bakengeli ye malamu, zambi bakati likambo lya ye naino te.
Numb LinVB 15:35  Yawe alobi na Moze : « Baboma moto oyo, bato ba­nso babwakela ya mabanga, o libanda lya nganda. »
Numb LinVB 15:36  Bato banso babimisi ye o libanda mpe babwakeli ye mabanga tee akufi, se lokola Yawe atindaki Moze.
Numb LinVB 15:38  « Loba na bana ba Israel : Basono malenda o nse ya bilamba bya bango mpe batonga mango na nsinga ya langi ya longo­ndo ; esalema mpe bongo o mabota manso makoya nsima.
Numb LinVB 15:39  Bozala na malenda : komono mango ekosalisa mpo ya kokundola mibeko minso mya Yawe. Bongo bokotosa myango mpe bokolanda mposa ya motema to ya miso te, iye itindi bino o nzela ya masumu.
Numb LinVB 15:40  Bobele bongo bokokundola mibeko mya ngai minso, bokokokisa myango mpe bokozala basantu o miso ma Nzambe wa bino.
Numb LinVB 15:41  Ngai Yawe Nzambe wa bino, oyo abimisaki bino o mokili mwa Ezipeti mpo ’te naza­la Nzambe wa bino ; ngai Yawe Nzambe wa bino. »
Chapter 16
Numb LinVB 16:1  Kore, mwana wa Yisar, nkoko wa Keat, oyo azalaki mwa­na wa Levi, abendi Datan mpe Abiram, bana ba Eliab, na mpe On, mwana wa Pelet. Eliab na Pelet bazalaki bana ba Ruben.
Numb LinVB 16:2  Batomboki na Moze ; bato nkama ibale na ntuku itano balandi bango ; bango banso bato ba lokumu, bakonzi ba mabota, bayebani na lisanga.
Numb LinVB 16:3  Batomboki na Moze mpe na Aron, balobi : « Bolekisi ndelo ! Bato banso ba lisanga bazali basantu mpe Yawe azali o ntei ya bango. Mpo nini bolingi komito­mbola likolo lya lisanga lya Yawe ? »
Numb LinVB 16:5  Na nsima alobi na bana ba Kore mpe na baninga ba ye : « Lobi na ntongo Yawe akoyebisa banani bazali bato ba ye, moto nani azali mosantu mpo akoka kokoma penepene na ye. Oyo Yawe akobenga penepene na ye, ye moto aponomi.
Numb LinVB 16:6  Bosala boye : Bokamata mbeki ya makala mpo ya kotumba mpaka ya malasi, yo Kore na baninga ba yo banso.
Numb LinVB 16:7  Mpe lobi botia móto o kati ; na nsima botiela mwango mpaka ya malasi o boso bwa Yawe. Moto oyo Yawe akolakisa, ye azali mosantu. Solo, boleki lofundo, bino bana ba Levi ! »
Numb LinVB 16:8  Moze alobi na Kore : « Bana ba Levi, boyoka malamu !
Numb LinVB 16:9  Ekoki te awa Nzambe wa Israel aponoki bino o kati ya bana ba Israel ? Abengaki bino bosala mosala o ndako ya Yawe, mpe atiaki bino o boso bwa bato banso o ntango bokosalela bango mosala mwa Nza­mbe ;
Numb LinVB 16:10  aponoki yo na bandeko ba yo banso ba-Levi, mpo bozala penepene na ye, mpe sikawa bolingi kokoma banganga Nzambe ?
Numb LinVB 16:11  Botomboki na Yawe mpenza, yo na baninga ba yo banso. Aron nde nani mpo ’te boto­mbokela ye ? »
Numb LinVB 16:12  Moze atindi bato babenga Datan na Abiram, bana ba Eliab. Bango bayanoli : « Tokoya te.
Numb LinVB 16:13  Awa olongoli bi­so o mokili motondi na mabéle ma ngombe mpe na mafuta ma nzoi, mpe okomisi biso awa o eliki mpo ’te tokufa, ekoki te ? Sikawa olingi naino kozala mokonzi wa biso.
Numb LinVB 16:14  Te ! Oka­mbi biso te o mokili motondi na mabéle ma ngombe mpe na mafuta ma nzoi, okabeli biso mpe bilanga na nzete ya vino te ! Okanisi ’te bato bakufa miso ? Tokoya te. »
Numb LinVB 16:15  Moze atoki na nkanda mpe alobi na Yawe : « Otala libonza lya bango te. Ngai nayibeli bango mpunda te, nasali moko wa bango mabe te ! »
Numb LinVB 16:16  Moze alobi na Kore : « Bino na baninga, boya lobi koteleme awa o miso ma Yawe, esika yoko na Aron.
Numb LinVB 16:17  Moko moko aya na engwekungweku, ati­a mpaka ya malasi o kati ; moko moko aya na yango o boso bwa Yawe (yango inso ikozala nkama ibale na ntuku itano). Yo na Aron, bokamata mpe ya bino. »
Numb LinVB 16:18  Banso bayei na engwe­kungweku ya bango, bapelisi móto mpe batii mpaka ya malasi o móto. Na nsima batelemi penepene na monoko mwa Ema ya Likita, esika yoko na Moze mpe na Aron.
Numb LinVB 16:19  Kore asangisi lisanga mobimba lya bato ba ye penepene na monoko mwa Ema ya Likita, mpe nkembo ya Yawe emononi na bato banso.
Numb LinVB 16:21  « Bolongwa o lisanga lya ba­ngo ; nakoboma bango sikawa. »
Numb LinVB 16:22  Ba­nso bakwei elongi o nse mpe bagangi : « E Nzambe, Nzambe oyo akopesaka bato banso mpema, okosilika na lisanga mobimba, soko se moto moko asali lisumu ? »
Numb LinVB 16:24  « Loba na bato ba lisanga balongwa o biema bya Kore, bya Datan mpe bya Abiram. »
Numb LinVB 16:25  Moze atelemi mpe akei epai ya Datan na Abiram. Bankumu ba Israel balandi ye.
Numb LinVB 16:26  Moze alobi na bato ba lisanga : « Nabondeli bino, bolongwa o biema bya bato baye babe, bosimba mpe eloko yoko ya bango te, mpo ’te bokufa mpo ya masumu ma bango te. »
Numb LinVB 16:27  Balongwi penepene na biema bya Kore, bya Datan mpe bya Abiram. Datan na Abiram babimi mpe batelemi o monoko mwa ema ya ba­ngo, elongo na basi ba bango, na bana babali na bana bake ba bango.
Numb LinVB 16:28  Moze alobi : « Sikawa bokoyeba ’te Yawe moto atindi ngai nasala bongo, zambi nakosala yango na mayele ma ngai moko te.
Numb LinVB 16:29  Soko bato baye bakokufa lokola bato banso, ekolakisa ’te Yawe atindi ngai te.
Numb LinVB 16:30  Kasi soko Yawe akosala likambo lyoko lya nsomo, soko mabelé makofungwama mpe makomele bango elongo na biloko bya bango binso, soko bakokita o mboka ya bawa, awa bazali naino na bomoi, bokoyeba ’te bango baboyaki Yawe. »
Numb LinVB 16:31  Esilisi ye koloba maloba mana manso, mabelé mafungwami.
Numb LinVB 16:32  Mabelé mafungwami mpe mameli bango elongo na libota lya bango na mpe ba­to banso ba Kore na biloko bya ba­ngo.
Numb LinVB 16:33  Bakiti o mboka ya bawa, awa bazalaki naino na bomoi elongo na biloko bya bango binso. Mabelé mazipi bango mpe balongwi o lisanga libela.
Numb LinVB 16:34  Ezalaki bango koganga, bato banso ba Israel, bakimi, zambi bamilobeli : « Mabelé mamele biso te ! »
Numb LinVB 16:35  Móto mobimi epai ya Yawe mpe mosilisi bato nkama ibale na ntuku itano, baye babonzaki mpaka ya malasi.
Chapter 17
Numb LinVB 17:2  « Loba na Eleazar, mwana wa nga­nga Nzambe Aron, alongola mbeki ya mpaka ya malasi o kati ya makala mpe apanza móto mosika,
Numb LinVB 17:3  zambi mbeki iye ya bato bakufi mpo ya masumu ma bango, ikomi mbeki isantu, mpo bayaki na yango o miso ma Yawe ; batula na yango manzanza mpo ya kozipa altare. Ikozala o miso ma bana ba Israel lokola elembo. »
Numb LinVB 17:4  Nganga Nzambe Eleazar akamati mbeki ya mbengi ; bato bamemeki yango bakufaki na móto. Batuli na yango manzanza mpo ya kozipa altare.
Numb LinVB 17:5  Yango ikoyebisa bana ba Israel ’te moto moko, soko azali wa libota lya Aron te, akoki kobeleme te mpo ya kotumba mpaka ya malasi o miso ma Yawe, soki te akozwa likambo lokola Kore na baninga ba ye, se lokola Yawe ayebisaki bango na monoko mwa Moze.
Numb LinVB 17:6  Mokolo mwa nsima bato banso ba Israel batomboki na Moze mpe na Aron, balobi : « Bobomi bato ba ekolo ya Yawe. »
Numb LinVB 17:7  O ntango bato banso ba­zalaki kotombokela Moze na Aron, batali epai ya Ema ya Likita ; mpe tala, limpata lisipi yango mpe nkembo ya Yawe emononi.
Numb LinVB 17:8  Moze na Aron bakei koteleme o boso bwa Ema ya Likita.
Numb LinVB 17:10  « Longwa epai ya bango ; nakoboma bango na mbala yoko. » Bango bakwei elongi o nse.
Numb LinVB 17:11  Moze alobi na Aron : « Kamata mbeki ya mpaka ya malasi, tia móto mwa altare o kati, sopa mpaka ya malasi likolo mpe kende noki epai ya bato mpo ya kosala milulu mya bolimbisi masumu, mpo Yawe ayoki nkanda mpenza : etumbu esili eba­ndi. »
Numb LinVB 17:12  Aron akamati mbeki lokola Moze alobaki, mpe apoti mbangu o kati ya lisanga lya bato ; etumbu esili ebandi o kati ya bango. Atii mpaka ya malasi mpe asali milulu mya bolimbisi masumu.
Numb LinVB 17:13  Na nsima akei koteleme o kati ya baye bakufi na baye bakufi te ; bokono bokomi kosila.
Numb LinVB 17:14  Bato nkoto zomi na inei na nkama nsambo bakufi mpo ya etumbu ena, kotanga bato bakufaki mpo ya likambo lya Kore te.
Numb LinVB 17:15  Na nsima Aron azongi epai ya Moze o monoko mwa Ema ya Likita ; etumbu esili nye.
Numb LinVB 17:17  « Loba na bana ba Israel : Bapesa yo mangenda, libota lyoko lyoko lingenda lyoko ; bankumu ba mabota bapesa yo ma­ngenda zomi na mabale o nkombo ya libota lya bango. Okoma nkombo ya libota o lingenda lyoko lyoko.
Numb LinVB 17:18  O li­ngenda lya Levi koma nkombo ya Aron, zambi libota lyoko lyoko likozala na lingenda lyoko.
Numb LinVB 17:19  Tia mango o Ema ya Likita, o boso bwa Sanduku ya Bondeko, o esika nakokutanaka na yo.
Numb LinVB 17:20  Lingenda liye likobimisa nkasa, likolakisa moto oyo ngai naponi. Bongo nakosilisa bilobaloba bya bana ba Israel bazali kolobela yo. »
Numb LinVB 17:21  Moze asololi na bana ba Israel mpe bankumu ba mabota manso bapesi ye lingenda, moto na moto li­ngenda lya ye : mangenda zomi na mabale o mabota ma bango manso. O kati ya mango lingenda lya Aron lisalaki mpe.
Numb LinVB 17:22  Moze atii mango o boso bwa Yawe o Ema ya Likita.
Numb LinVB 17:23  Eyi­ngeli Moze, o mokolo mwa nsima o Ema ya Likita, lingenda lya Aron, liye lya libota lya Levi, libimisi nkasa, fulele ifungwami mpe mbuma ya lidame iteli.
Numb LinVB 17:24  Moze akamati mangenda manso o miso ma Yawe mpe akei kolakisa bana ba Israel banso mango, awa bamoni mango moto na moto akamati lingenda lya ye.
Numb LinVB 17:25  Na nsima Yawe alobi na Moze : « Zongisa lingenda lya Aron o boso bwa Sanduku ya Bondeko, litikala wana lokola elembo mpo ya bato baye batombokoki. Lingenda lina likosilisa bilobaloba bya bango nye ; bo­ngo nayoka bango lisusu te, mpo bakufa te. »
Numb LinVB 17:27  Bana ba Israel balobi na Moze : « Esili na biso, tokokufa ! Tokokufa biso banso !
Numb LinVB 17:28  Moto ata nani abelemi na Ndako ya Yawe mpo ya kobonza libonza akokufa. Tokufa bongo biso banso ? »
Chapter 18
Numb LinVB 18:1  Yawe alobi na Aron : « Yo na bana ba yo na libota lya yo mo­bimba, bokomeme ngambo mpo ya masumu masalemi ona esika esantu mpe o mosala mwa bino mwa bo­nga­nga.
Numb LinVB 18:2  Tika bandeko ba yo ba libota lya Levi, libota lya tata wa yo, babeleme elongo na yo o esika esantu. Bazala baninga ba yo ba mosala, basa­lela yo, yo na bana ba yo o boso bwa Ema ya Bondeko.
Numb LinVB 18:3  Basalela yo mpe ema mobimba mosala ; nzokande bakoma penepene na biloko bisantu mpe na altare te, mpo bakufa te.
Numb LinVB 18:4  Bazala basaleli ba yo ; basala mosala o Ema ya Likita, basala misala minso mitali Ema ya Likita ; moto mosusu asala mosala mona te.
Numb LinVB 18:5  Bobele bino bokosala mosala o Esika esantu mpe pene na altare mpo ’te Nkanda ya Yawe ekwela bana ba Israel te.
Numb LinVB 18:6  Ngai moto naponoki bandeko ba yo ba-Levi o kati ya bana ba Israel mpe napesi yo bango. Bazali bato bapesami na Yawe mpo ya kosala mosala o Ema ya Likita.
Numb LinVB 18:7  Yo na bana ba yo, bosala mosala o Ema ya Likita, misala minso mitali altare mpe miye mikosalema nsima ya elamba elai. Bosala mosala moye, ngai moto napesi bino mosala moye mwa bonganga. Kasi moto mosusu akomeka kosala mwa­ngo akokufa. »
Numb LinVB 18:8  Yawe alobi na Aron : « Omoni ngai moko napesi yo mosala mwa koya­mba mabonza bana ba Israel babo­nze­li ngai bo biloko bisantu, napesi yo byango bisala lokola lifuta lya yo mpe lya bana ba yo ; mobeko mona mozali mwa seko.
Numb LinVB 18:9  Tala biloko bisan­tu bikozala bya yo, mabonza matu­mbami te, mango maye : mabonza manso ma bana ba Israel, mazala mabonza ma bolei, miboma mya boli­mbisi masumu mpe miboma mya bondeko : bina binso bizali biloko bisantu, bizali bya yo mpe bya bana ba yo.
Numb LinVB 18:10  Bokoki kolia biloko bisantu bina. Babali banso bakoki kolia byango. Tala byango lokola biloko bisantu.
Numb LinVB 18:11  Okozwa mpe biloko biye : mabonza manso bana ba Israel babonzeli ngai mpe biloko binso bapesi ngai, napesi yo mango mazala ma yo mpe ma bana ba yo babali na basi ; ezali mobeko mwa seko. Bato banso ba­ndako ya yo bakoki kolia mango soko bazali peto.
Numb LinVB 18:12  Mafuta maleki malamu, vino eleki elengi mpe mbuma ya mampa, mbuma iye ya yambo babonzeli ngai Yawe, napesi yo yango.
Numb LinVB 18:13  Mbuma inso ya yambo izwami o mokili mwa bango, iye babonzeli ngai Yawe, ikozala ya yo. Bato banso ba ndako ya yo bakoki kolia mango soko bazali peto.
Numb LinVB 18:14  Biloko binso biza­li ekila o Israel bizali bya yo.
Numb LinVB 18:15  Bana ba yambo banso, baye bayei kobo­nzela ngai Yawe, bazali ba yo, bazala bana ba bato to bana ba nyama. Nzokande okotinda bato ’te basikola mwa­na wa bango wa yambo na mpe mwana wa yambo wa nyama mbi­ndo,
Numb LinVB 18:16  soko mwana akokisi sanza yoko. Okofutisa bango mitako mya palata mitano, lokola bakotangaka o ndako esantu : motako moko mokokani na mosolo moke.
Numb LinVB 18:17  Okofutisa bango te mpo ya mwana wa yambo ya ngombe, ya mpata mpe ya ntaba. Yango isali biloko bisantu. Nyakela makila o altare, tumba mafuta ma yango, mpo mazala libonza lya nsolo mpimbo likosepelisa Yawe.
Numb LinVB 18:18  Kasi misuni mya yango misali mya yo, ntolo balakisaki Yawe na mpe ebelo ya mobali.
Numb LinVB 18:19  Ya biloko bisantu binso bana ba Israel bakobonzela Yawe, nakopesa yo eteni, ezala ya yo mpe ya bana ba yo babali na basi. Ezali bo­ndeko mwa seko bondimami na mo­ngwa o miso ma Yawe ; akati bwango na yo mpe na bana banso ba libota lya yo. »
Numb LinVB 18:20  Yawe alobi na Aron : « O mokili mwa bango okozwa mabelé te ; o kati ya bango okozala na biloko te. Ngai moto nakopesa yo biloko bo lisango o kati ya bana ba Israel.
Numb LinVB 18:21  Nakopesa bana ba Levi biteni bya zomi bya biloko binso o Israel, mpo ya misala minso mya bango mpe miye bakosalaka o Ema ya Likita.
Numb LinVB 18:22  Bongo bana ba Israel bakoma lisusu penepene na Ema ya Likita te ; soki te bakosumuka mpe bakokufa.
Numb LinVB 18:23  Bobele ba-Levi basala mosala o Ema ya Li­kita ; soko babebisi, bango moko bakozwa likambo. Tala mobeko mwa se­ko motali mabota manso makoya nsima : o kati ya bana ba Israel ba-Levi bazala na mabelé te,
Numb LinVB 18:24  zambi eteni ya zomi eye bana ba Israel base­ngeli kopesa Yawe, ngai napesi yango na ba-Levi, ezala lifuta lya bango. Ya­ngo wa­na nalobi na bango ’te bazala na mabelé te o kati ya bana ba Israel. »
Numb LinVB 18:26  « Loba na ba-Levi : Soko bokamati eteni ya zomi o maboko ma bana ba Israel, eteni eye napesi bino o nkombo ya bango, bokamata naino eteni ya zomi ya bilo­ko bina mpo ya kobonzela ngai Yawe.
Numb LinVB 18:27  Ekozala eteni bino moko bosengeli kopesa se lokola bango bakopesaka : ndambo ya mbuma ya mampa ya ebo­ka mpe ndambo ya vino ya sika ya eka­melo.
Numb LinVB 18:28  Se bongo, bino mpe bolongola o kati ya biteni bya zomi bi­nso bya bana ba Israel eteni ya zomi ya Yawe. Bopesa eteni yango ya Yawe na nganga Nzambe Aron.
Numb LinVB 18:29  O kati ya biloko bileki bilamu, biye babonzeli bino, bolongola eteni ya Yawe bo libonza lisantu.
Numb LinVB 18:30  Loba lisusu na ba-Levi : Soko bolongoli biloko biye bileki bilamu, biloko bitikali bya mbuma ya mampa o etutelo mpe bya mbuma ya vino o ekamelo, bizali bilei bya bino.
Numb LinVB 18:31  Bokoki kolia byango o bisika binso, ná bino ná bandeko ba bino ; lizali lifuta lya mosala bokosalaka o Ema ya Likita.
Numb LinVB 18:32  Mpo ya yango bokosala lisumu lyoko te, soko liboso oponoki biye bileki bilamu ; soko bosali bongo, bosantoli biloko bisantu bya bana ba Israel te mpe bokokufa te. »
Chapter 19
Numb LinVB 19:2  « Tala mobeko Yawe atindi. Loba na bana ba Israel ’te baya na ngombe mwasi ya nzoto etane ezala na mbeba te, na mbindo mpe te, esali naino mosala te.
Numb LinVB 19:3  Bapesa yango na nganga Nzambe Eleazar. Bakende na yango o libanda lya nganda mpe baboma yango o miso ma ye.
Numb LinVB 19:4  Na nsima nganga Nzambe Eleazar akamata mwa makila mwa moboma o mosapi mwa ye mpe anyakela mango epai ya monoko mwa Ema ya Likita, mbala nsambo.
Numb LinVB 19:5  Batumba ngombe o miso ma ye, na mpe lomposo, mosuni, makila mpe nyei.
Numb LinVB 19:6  Nganga Nza­mbe akamata nkoni ya nzete ya sédere, nkasa ya isope mpe mputulu ya ngola ; abwaka yango inso o móto esika ngombe ezali kotumbama.
Numb LinVB 19:7  Asu­kola bilamba, asukola mpe nzoto na mai ; nsima azonga o nganda, kasi akotikala na mbindo tee butu.
Numb LinVB 19:8  Moto atu­mbi ngombe, ye mpe asukola bilamba ; asukola mpe nzoto na mai, kasi akotikala na mbindo tee butu.
Numb LinVB 19:9  Bobele moto oyo azali na mbindo te, akamata mputulu ya biloko binso bya ngombe bitikali mpe abwaka yango o libanda lya nganda o esika peto. Babomba mputulu mpo ’te bana ba Israel basala na yango mai ma bopetoli, ezala moboma mwa boli­mbisi masumu.
Numb LinVB 19:10  Oyo azwi mputulu ya ngombe, asukola bilamba bya ye, akozala na mbindo tee butu. Ezali mobeko mwa seko mwa bana ba Isra­el mpe mwa bampaya bakofandaka epai ya bino.
Numb LinVB 19:11  Moto asimbi ebembe ata moto akufi liwa lya motindo nini, akozala na mbindo mikolo nsambo.
Numb LinVB 19:12  O mokolo mwa misato mpe mwa nsambo amipetola na mai mana ma bopetoli, bongo akokoma peto. Soko amipetoli o mokolo mwa misato mpe mwa nsambo te, akozala peto te.
Numb LinVB 19:13  Moto asimbi nzoto ya mowei, mpe amipetoli te, akosantola Ndako ya Yawe ; balongola ye o kati ya bana ba Israel, zambi banyakeli ye mai ma bopetoli te, azali na mbindo mpe akotikala na mbindo.
Numb LinVB 19:14  Tala mobeko motali likambo lya moto akufi o ema. Moto akoti o ema ná moto azali o ema akozala na mbi­ndo mikolo nsambo.
Numb LinVB 19:15  Nzungu inso izali polele, ikangemi na ezipeli te, iza­li mpe na mbindo.
Numb LinVB 19:16  Soko o bilanga moto asimbi ebe­mbe ya mowei to ya moto oyo babomi, to minkuwa mya bawei, to lilita, moto oyo akozala na mbindo mikolo nsambo.
Numb LinVB 19:17  Mpo ya kopetola moto mbindo, bakamata mputulu ya nyama eye babomi bo libonza mpo ya bolimbisi masumu. Basopa yango o mbeki mpe babakisa mai ma liziba.
Numb LinVB 19:18  Na nsima moto moko peto akamata nkasa ya isope mpe akotisa yango o mai. Anyakela na mango ema, mbeki na mpe bato banso bazali wana ; basala se bongo na moto asimbaki minkuwa to ebembe ya moto babomaki na mopanga, to mowei, to lilita.
Numb LinVB 19:19  Moto peto anyakela moto mbindo mai o mokolo mwa misato mpe mwa nsambo ; bongo o mokolo mwa nsambo lisumu lya ye likolimbama. Na nsima moto mbindo apetola bilamba bya ye, asukola nzoto na mai, bongo na butu akokoma peto.
Numb LinVB 19:20  Kasi soko moto mbindo amipetoli bongo te, balo­ngola ye o lisanga, zambi akoki kobebisa ndako esantu ya Yawe. Soko banyakeli ye mai ma bopetoli te akotikala moto mbindo.
Numb LinVB 19:21  Eye ekozala mobeko mwa bango mwa seko. Moto anyakeli moninga mai ma bopetoli, asukola bilamba bya ye ; mpe moto asimbi mai mana akozala na mbindo tee butu.
Numb LinVB 19:22  Biloko binso moto mbindo asimbi bikozala na mbindo, moto asimbi biloko bina akozala na mbindo tee butu. »
Chapter 20
Numb LinVB 20:1  O sanza ya yambo lisanga lya bana ba Israel likomi o eli­ki ya Sin. Bato bayei kofanda o Kades, esika Miriam akufa mpe akundama.
Numb LinVB 20:2  Mai mazalaki te mpe bato bato­mbokeli Moze na Aron.
Numb LinVB 20:3  Bato baga­ngeli Moze : « Malamu soko tokufaki lokola bandeko ba biso bakufaki o miso ma Yawe !
Numb LinVB 20:4  Mpo nini okambaki libota lya Yawe o eliki mpo tokufa, biso na nyama ya biso ?
Numb LinVB 20:5  Mpo nini obimisaki biso o Ezipeti mpe oyaki na biso o esika eye ya mpasi ? Awa mabelé mpo ya kolona biloko mazali te, nzete ya figi ezali te, nzete ya vino te, nzete ya malala mpe te ; ata mai ma komele mazali te ! »
Numb LinVB 20:6  Moze na Aron balongwi o esika bato basangani, bakei o Ema ya Likita ; wana bakwei o mabelé elongi o nse, mpe bamoni nkembo ya Yawe.
Numb LinVB 20:8  « Kamata li­ngenda lya yo, sangisa bato banso o esika yoko, yo na ndeko wa yo Aron. O miso ma bato loba na libanga ’te libimisa mai. Bongo okobimisa mai o libanga liye mpe okomelisa bato ba­nso, na nyama lokola. »
Numb LinVB 20:10  Ye na Aron babengi bato banso baya kosangana penepene na libanga. Na nsima alobi na bango : « Bino batomboki, boyoka sikawa. Tobimisela bato lokola bino mai o libanga ? »
Numb LinVB 20:11  Bongo Moze atomboli loboko, mpe na lingenda abeti libanga mbala ibale. Mai mabimi mingi ; bato banso bazwi mai ma komele na nyama ya bango lokola.
Numb LinVB 20:12  Kasi Yawe alobi na Moze mpe na Aron : « Boyambaki ngai na motema moko te, bokumisaki ngai te o miso ma bana ba Israel. Yango wana bokoyingela te o mokili moye nakopesa bango. »
Numb LinVB 20:13  Sikawa bakotanga mai mana : ‘Mai ma Meriba (Nkanda)’ ; kuna bana ba Israel batombokoki na Nza­mbe, mpe Yawe alakisaki bango bosantu bwa ye.
Numb LinVB 20:14  Ut’o Kades Moze atindeli mokonzi wa Edom bantoma na maloba maye : « Ndeko wa yo Israel alobi bo­ye : Oyebi mpasi nini toyokaki.
Numb LinVB 20:15  Ba­nkoko ba biso bakendeki o Ezipeti esika tofandaki mikolo mingi. Kasi bato ba Ezipeti banyokoloki biso na batata ba biso.
Numb LinVB 20:16  Tobelelaki Yawe mpe ayokaki boleli bwa biso ; atindelaki biso anzelu wa ye mpo ya kobimisa biso o Ezipeti. Sikawa tokomi o Kades, mboka ezali o ndelo ya mokili mwa yo.
Numb LinVB 20:17  Lingisa biso tokatisa mo­kili mwa yo. Tokoleka o kati ya bilanga bya ndunda to bya nzete ya vino te, tokomele mai ma liziba te ; tokolanda se nzela enene, tokokende epai ya loboko la mobali to la mwasi te tee tokosilisa kokatisa mokili mwa yo. »
Numb LinVB 20:18  Edom azongiseli ye : « Okoleka o mokili mwa ngai te. Soko oleki, nakoya kobundisa yo elongo na basoda ba ngai. »
Numb LinVB 20:19  Bana ba Israel balobi na ye : « Tokolanda se nzela enene. Soko biso na bibwele bya biso tomeli mai ma bino, ngai nakofuta. Nakosenge se mpo yoko : Toleka se koleka. »
Numb LinVB 20:20  Edom ayanoli : « Okoleka te ! » Bo­ngo Edom akei kozwana na Israel elongo na basoda ebele ba mpiko.
Numb LinVB 20:21  Awa Edom aboyi kolekisa bango o ekolo ya ye, bato ba Israel balongwi kuna.
Numb LinVB 20:22  Bana ba Israel balongwi o Kades mpe banso bakomi o ngomba Kor.
Numb LinVB 20:23  O ngomba Kor, kuna o ndelo ya mokili mwa Edom, Yawe alobi na Moze mpe na Aron maloba maye :
Numb LinVB 20:24  « Aron akende kokutana na bankoko ba ye, zambi ye akoki kokoto te o mokili moye nakopesa bana ba Israel, mpo bazalaki kotomboko na maloba ma ngai penepene na mai ma Meriba.
Numb LinVB 20:25  Kamata Aron na mwana wa ye Eleazar mpe elongo na bango buta ngo­mba Kor.
Numb LinVB 20:26  Kuna olongola bila­mba bya Aron mpe olatisa byango mwana wa ye Eleazar, mpe Aron akokende kokutana na bankoko ba ye, akokufa se o esika ena. »
Numb LinVB 20:27  Moze asali lokola Yawe atindaki ye. O miso ma bato banso babuti ngo­mba Kor.
Numb LinVB 20:28  Moze alongoli bila­mba bya Aron mpe alatisi mwana wa ye Eleazar byango ; kuna o nsonge ya ngomba Aron awei. Na nsima Moze na Eleazar bakiti ngomba.
Numb LinVB 20:29  Bato banso bamoni ’te Aron asili kokata motema, mpe bato banso ba mabota ma Israel baleli Aron sanza mobimba.
Chapter 21
Numb LinVB 21:1  Mokonzi Arad, moto wa Kanana, oyo afandi o Negeb, ayoki ’te ba-Israel bazali koya o nzela ya Atarim. Abundi etumba na bango mpe akangi basusu bakoma baombo.
Numb LinVB 21:2  O ntango ena ba-Israel balakeli Yawe elako eye : Soko ondimi kokaba bango o maboko ma biso, biso tokosilisa mboka ya bango inso nye.
Numb LinVB 21:3  Yawe ayoki lolaka la bato ba Israel mpe akabi ba-Kanana o maboko ma ba­ngo. Babomi bato na mboka ya ba­ngo lokola. Bapesi esika ena nkombo Orma.
Numb LinVB 21:4  Balongwi o ngomba Kor, balandi nzela ya Mbu ya Nsoló, batamboli mpembeni ya mokili mwa Edom, mpe babandi kosilika.
Numb LinVB 21:5  Batomboki na Nzambe mpe na Moze, balobi : « Mpo nini obimisaki biso o Ezipeti, bongo tokufa banso awa o eliki ? Mampa mazali te, mai mpe te ! Tole­mbi bilei bya mpamba tozali kolia ! »
Numb LinVB 21:6  Nzambe atindeli bango nyoka ya ngenge, iswi bango mpe bato ba Israel ebele bakufi.
Numb LinVB 21:7  Sikawa bato bayei epai ya Moze, balobi : « Tosali mabe awa to­tomboki na Yawe mpe na yo. Sa­mbe­la Yawe mpo ’te alongola nyoka. » Moze abondeli Nzambe mpo ya bango.
Numb LinVB 21:8  Yawe alobi : « Sala ekeko ya nyoka mpe baka yango o nsonge ya likonzi. Soko nyoka eswi moto, moto oyo atala ekeko ena, bongo akobika. »
Numb LinVB 21:9  Moze asali nyoka ya mbengi, abaki yango o nsonge ya likonzi. Soko nyoka eswi moto, akobika soko atali ekeko eye.
Numb LinVB 21:10  Ba-Israel balongwi kuna mpe bapiki nganda o Obot.
Numb LinVB 21:11  Balongwi o Obot mpe bakei kopika nganda o Iye-Abarim o eliki penepene na ndelo ya mokili mwa Moab, o epai moi mokobimaka.
Numb LinVB 21:13  Balo­ngwi kuna mpe bapiki nganda nsima ya moluka Arnon. Moluka moye mozali kokatisa eliki, ut’o mokili mwa ba-Amor ; mozali ndelo mokaboli ba-Moab na ba-Amor.
Numb LinVB 21:14  Ekomami bongo o buku ya Bitumba bya Yawe : « Waeb pene na Sufa mpe na moluka Arnon,
Numb LinVB 21:15  na mpe ngomba tee pene na lobwaku ezali kokende kin’o mboka Ar, o ndelo ya Moab. »
Numb LinVB 21:16  Longwa kuna bakei o Beer. Ya­ngo nde libulu esika Yawe alobaki na Moze : « Sangisa bato esika yoko mpe nakopesa bango mai. »
Numb LinVB 21:17  Na nsima bato ba Israel bayembi nzembo eye : « E libulu, bimisa mai ! Boyembela libulu,
Numb LinVB 21:18  liye bankumu batimolaki, liye bayangeli ba mabota batimolaki na lingenda lya bokonzi mpe na nzete ya bango »… mpe longwa o eliki bakomi o Matana.
Numb LinVB 21:19  Ut’o Matana bakomi o Nakaliel ; ut’o Nakaliel bakei o Bamot ;
Numb LinVB 21:20  longwa Bamot bakomi o lobwaku lokosuka o mokili mwa Moab, epai ya ngomba Pisga, penepene na eliki.
Numb LinVB 21:21  Ba-Israel batindi bantoma epai ya Sikon, mokonzi wa ba-Amor na maloba maye :
Numb LinVB 21:22  « Tolingi kokatisa mokili mwa yo. Tokoleka o kati ya bila­nga bya ndunda mpe bya nzete ya vino te ; tokolanda se nzela enene tee tokosilisa kokatisa mokili mwa yo. »
Numb LinVB 21:23  Kasi Sikon alingisi ba-Israel bakatisa mokili mwa ye te. Asangisi basoda ba ye banso, akei o eliki mpo ya kozwana na ba-Israel mpe akomi o Yaas, esika abandi etumba na ba-Israel.
Numb LinVB 21:24  Bato ba Israel babomi ye na mopanga mpe babotoli mokili mwa ye, banda moluka Arnon tee Yabok, tee ndelo ya mokili mwa ba-Amon, baye babatelaki mokili mwa bango makasi.
Numb LinVB 21:25  Bato ba Israel babotoli mboka inso. Bongo bakei kofanda o mboka inso ya bato ba Amor, o Kesbon, mpe o mboka inso ya penepene.
Numb LinVB 21:26  Kesbon ezalaki mboka mokonzi ya Sikon, mokonzi wa ba-Amor. Sikon moto abandaki kobundisa mokonzi wa yambo wa Moab, mpe abotoloki ye mokili mobimba tee Arnon.
Numb LinVB 21:27  Yango wana bakomi minkanda balobaka : « Boyaka o Kesbon ! Batonga mboka ya Sikon lisusu, balendisa yango !
Numb LinVB 21:28  Móto mobimaki o Kesbon, móto mopelaki o mboka ya Sikon, móto mosilisaki mboka Ar o Moab, móto momeleki ngomba inene ya Arnon.
Numb LinVB 21:29  Mawa na yo, mokili mwa Moab !Bino bato ba Kemos bosuki mabe !Kemos akomisi bana babali baye bato bakimi etumba, akabi bana basi ba ye o maboko ma Sikon, mokonzi wa Amor.
Numb LinVB 21:30  Totubolaki bango na makula, banda Kesbon tee Dibon, bato banso bakufi. Tozikisi binso banda Nofa tee Medba. »
Numb LinVB 21:32  Moze atindi bato ba ye bakende konongo mboka Yazer ; ba-Israel babotoli mboka ena na mpe mboka inso ya penepene. Babengani bato ba Amor bafandi kuna.
Numb LinVB 21:33  Na nsima balandi nzela ekokende o Basan mpe bakei kuna. Og, mokonzi wa Basan, akei kokutana na bango elongo na bato ba ye banso mpo ya kobundisa bango epai ya Edrei.
Numb LinVB 21:34  Yawe alobi na Moze : « Obanga te, nakabi ye na bato ba ekolo ya ye banso o maboko ma yo. Sala na ye lokola osalaki na Sikon, mokonzi wa ba-Amor, oyo afandaki o Kesbon. »
Numb LinVB 21:35  Balongi ye, bana ba ye na mpe bato banso ba ekolo ya ye ; ata moto moko te abiki. Babotoli mokili mwa bango.
Chapter 22
Numb LinVB 22:1  Bana ba Israel balongwi kuna mpe bakei kopika nganda o Bisobe bya Moab, o ngambo ya Yordane, epai ya Yeriko.
Numb LinVB 22:2  Balak, mwa­na wa Sipor, amonoki makambo manso ba-Israel basalaki ba-Amor.
Numb LinVB 22:3  Moab ayoki motema nsomo awa amoni bato ebele boye, zambi abangi ba-Israel mingi.
Numb LinVB 22:4  Alobi na bakolo mbo­ka ba Madian : « Bomoni bato ebele boye, baye bazali kosilisa biloko binso penepene na biso, se lokola ngombe ikoliaka matiti ma esobe. » Balak, mwana wa Sipor, azalaki mokonzi wa Moab o mikolo mina.
Numb LinVB 22:5  Atindi bantoma babengela ye Balame, mwana wa Beor, o Petor penepene na ebale Efrate o mokili mwa bato ba Amave. Alobi na ye : « Tala bato babimaki o Ezipeti bayei kotonda awa o mokili mwa biso. Bayei kofa­nda sikawa o miso ma biso.
Numb LinVB 22:6  Nabo­ndeli yo, yaka noki mpe betele bango mobondo, zambi baleki biso na bokasi. Bobele bongo ndetokoki kolo­nga bango o etumba mpe kobengana bango o mokili mwa biso. Nayebi ’te moto yo obenisi akozwa bolamu, mpe moto oyo obeteli ye mobondo, akozwa bobe. »
Numb LinVB 22:7  Bakolo ba Moab mpe ba Madian bakei ; bamemi mosolo mpo ya kofuta nganga. Bayei kozwa Balame mpe bayebisi ye maloba ma Balak.
Numb LinVB 22:8  Balame alobi na bango : « Bolala awa na butu, nakozongisela bino eyano lokola Yawe akoloba na ngai. » Bankumu ba Moab batikali epai ya Balame.
Numb LinVB 22:9  Nzambe ayei epai ya Balame mpe atuni ye : « Bato bazali o ndako ya yo, bango banani ? »
Numb LinVB 22:10  Balame ayanoli Nzambe boye : « Balak, mwana wa Sipor, mokonzi wa Moab, ayebisi ngai boye :
Numb LinVB 22:11  Tala bato babimaki o Ezipeti bayei kotonda o mokili mwa ngai. Yaka noki mpe betele bango mobo­ndo mpo ’te nalonga bango mpe nabengana bango. »
Numb LinVB 22:12  Nzambe alobi na Balame : « Okende na bango elongo te. Obetele bato ba Israel mobondo te, zambi ngai nabenisi bango. »
Numb LinVB 22:13  Etani ntongo, Balame atelemi mpe alobi na bankumu Balak atindaki : « Bozo­nga o ekolo ya bino, zambi Yawe aboyi kolingisa ngai ’te nakende na bino elongo. »
Numb LinVB 22:14  Bankumu ba Moab batelemi mpe bakei epai ya Balak, balobi : « Balame aboyi koya elongo na biso. »
Numb LinVB 22:15  Balak atindi lisusu bankumu basusu, baleki baye ba liboso na boike mpe na lokumu.
Numb LinVB 22:16  Bakei epai ya Balame mpe balobi na ye : « Balak, mwana wa Sipor alobi : Nabondeli yo, oboya koya epai ya ngai te.
Numb LinVB 22:17  Nakopesa yo lokumu lonene mpenza mpe nakosala manso lokola okoloba. Yaka bongo mpe betele bango mobondo. »
Numb LinVB 22:18  Balame ayanoli bantoma ba Balak : « Ata Balak alingi kopesa ngai ndako mobimba etondi na wolo mpe na palata, nakoki kobuka etinda ya Yawe Nza­mbe wa ngai te, ata na likambo nini, linene to like.
Numb LinVB 22:19  Sikawa bino mpe bolala awa na butu mpe nakoyeba maye Yawe akoki koyebisa ngai naino. »
Numb LinVB 22:20  Nzambe abimeli Balame na butu mpe alobi na ye : « Bato bayei kobe­nga yo te ? Teleme mpe kende na ba­ngo elongo. Kasi sala se maye nakoyebisa yo. »
Numb LinVB 22:21  Etani ntongo, Balame atelemi, abuteli mpunda ya ye mpe akei elongo na bankumu ba Moab.
Numb LinVB 22:22  Bokei bwa Balame boyokisi Yawe nkanda enene. Anzelu wa Yawe ayei koteleme o nzela mpo ya koka-ngela ye nzela. Atambwisi mpunda ya ye mpe basaleli babale bazalaki kolanda ye.
Numb LinVB 22:23  Kasi mpunda emoni Anzelu wa Yawe o nzela, amemi mopanga o loboko. Mpunda elongwi o nzela, mpe ekei koleka o kati ya bilanga ; kasi Balame abeti mpunda mpo ezonga o nzela.
Numb LinVB 22:24  Anzelu wa Yawe ayei koteleme mpembeni o nzela eke o kati ya bilanga bya nzete ya vino, bifelo bizalaki epai na epai ya nzela.
Numb LinVB 22:25  Mpunda emoni Anzelu wa Yawe mpe etuti efe­lo, ekangisi bongo lokolo la Balame. Balame abeti mpunda lisusu.
Numb LinVB 22:26  Anzelu wa Yawe aleki epai esusu mpe atelemi o nzela eke esika moto moko akoki koleka te epai ya mobali to epai ya mwasi.
Numb LinVB 22:27  Emoni mpunda Anzelu wa Yawe, efukami, Balame afandeli mpunda. Balame ayoki nka­nda mpe abeti mpunda na lingenda lya ye.
Numb LinVB 22:28  Sikawa Yawe afungoli monoko mwa mpunda, eye elobi na Balame : « Mabe nini nasali yo mpo obete ngai mbala isato boye ? »
Numb LinVB 22:29  Balame azongisi : « Otioli ngai ! Soko nazalaki na mo­panga o loboko, mbele nabomi yo ! »
Numb LinVB 22:30  Mpunda elobi na Balame : « Ngai mpunda ya yo te ? Ngai namemeki yo ut’o kala te ? Nameseni nde kosala bo­ngo ? » Ye azongisi : « Te. »
Numb LinVB 22:31  Yawe afungoli miso ma Balame. Balame amoni Anzelu wa Yawe atelemi o nzela, mopanga o loboko. Bo­ngo akumbami mpe akwei elongi o nse.
Numb LinVB 22:32  Anzelu wa Yawe alobi na ye : « Mpo nini obeti mpunda ya yo mbala isato boye ? Ngai moto nakangeli yo nzela, zambi mobembo mwa yo mo­zali na ntina soki te.
Numb LinVB 22:33  Mpunda emoni ngai, bongo elongwi o nzela mbala isato. Soko ekimaki ngai te, mbele nasili koboma yo na mopanga, nzokande nakokaki koboma mpunda te. »
Numb LinVB 22:34  Balame azongiseli Anzelu wa Ya­we maloba maye : « Nasali lisumu, nayebaki te ’te yo moto ozalaki o nze­la ya ngai. Mpe sikawa, soko oli­ngi nakoba mobembo mona te, nakozonga o mboka. »
Numb LinVB 22:35  Anzelu wa Yawe ayanoli Balame : « Kende elongo na bato baye. Kasi oloba bobele maloba ngai nakolobisa yo. » Balame akei elo­ngo na bankumu baye Balak ati­nda­ki.
Numb LinVB 22:36  Eyoki Balak ’te Balame azalaki koya, akei kokutana na ye o nzela ya mboka Ar o mokili mwa Moab, epai ya nsuka ya mokili o ndelo ya Arnon.
Numb LinVB 22:37  Balak alobi na Balame : « Natindelaki yo bantoma babenga yo. Mpo nini oyaki epai ya ngai te ? Okanisaki solo ’te nakokaki kopesa yo lokumu te ? »
Numb LinVB 22:38  Balame ayanoli : « Tala, nayei epai ya yo. Soko olingi naloba liloba lyoko, nakoyebisa yo ’te nakoloba bobele maloba maye Nzambe akotia o monoko mwa ngai. »
Numb LinVB 22:39  Balame akei elongo na Balak. Bakomi o Kiriat-Usot.
Numb LinVB 22:40  Balak abomi nyama inene mpe ike, apesi Balame na bankumu bayei elongo na ye.
Numb LinVB 22:41  Nsima, na ntongo mpenza, Balak akei na Balame o mboka Bamot-Baal. Ut’o esika ena bakoki komono nga­nda ya ba-Israel.
Chapter 23
Numb LinVB 23:1  Balame alobi na Balak : « Tongela ngai awa altare nsambo, mpe pesa ngai ngombe babali nsambo na mpata babali nsambo. »
Numb LinVB 23:2  Balak asali lokola Balame alobaki na ye mpe abonzi ngombe yoko mpe mpata yoko o altare yoko yoko.
Numb LinVB 23:3  Balame alobi na Balak : « Teleme penepene na mabonza ma yo, ntango ngai nakoke-nde. Mbele Yawe akoya kokutana na ngai. Maloba manso akoloba na ngai, nakoyebisa yo mango. » Mpe akei kobuta mwa ngomba esika nzete ezalaki te.
Numb LinVB 23:4  Nzambe ayei kokutana na Balame, Balame alobi na ye : « Nabongisi altare nsambo mpe nabonzi ngombe yoko mpe mpata yoko o altare yoko yoko. »
Numb LinVB 23:5  Yawe ayokisi ye liloba lyoko, mpe alobi na ye : « Zonga epai ya Balak mpe lobela ye lyango.
Numb LinVB 23:6  Balame azongi epai ya Balak, akuti ye azali se koteleme penepene na mabonza, ye na bankumu ba Moab.
Numb LinVB 23:7  Balame asakoli makambo maye : Balak abengaki ngai ut’o ekolo ya Aram, mokonzi wa Moab, ut’o ngomba ya Kedem : ‘Yaka mpe betele libota lya Yakob mobondo, mpe kanela bato ba Israel’.
Numb LinVB 23:8  Boniboni nabetele moto mobondo, soko Nzambe akosala yango te ? Boniboni nakanela moto, soko Nzambe akaneli ye te ?
Numb LinVB 23:9  Solo, ut’o nsonge ya ngomba ya mabanga nazali komono ye, ut’o nsonge ya ngomba nazali kotola ye. Tala ekolo ya ngai mpenza ekotangema o molongo mwa bikolo bisusu te.
Numb LinVB 23:10  Nani akoki kotanga bana ba ekolo ya Yakob, nani motango mwa bana ba Israel ? Malamu nakufa liwa lya basemba, nasukisa mikolo mya ngai lokola bango ! »
Numb LinVB 23:11  Balak alobi na Balame : « Nasali yo nini ko ? Nabengaki yo mpo ’te obetele banguna ba ngai mobondo, mpe ozali bobele kobenisa bango ! »
Numb LinVB 23:12  Balame azongisi : « Nakeba te ’te naloba maloba maye Yawe atii o monoko mwa ngai ? »
Numb LinVB 23:13  Balak alobi : « Yaka, tokende epai esusu. Bato ozali komono kuna, omoni bango banso te, ozali komono se ndambo. Betele bango mobondo ut’o kuna. »
Numb LinVB 23:14  Akei na ye tee o Elanga ya Banongi o ngomba Pisga. Atongi kuna altare nsambo mpe abonzi ngombe yoko mpata yoko o altare yoko yoko.
Numb LinVB 23:15  Balame alobi na Balak : « Teleme awa penepene na mabonza, ngai nakei kozila kuna. »
Numb LinVB 23:16  Nzambe ayei kokutana na Balame, atii liloba lyoko o monoko mwa ye, alobi : « Zonga epai ya Balak mpe loba na ye bongo. »
Numb LinVB 23:17  Azongi epai ya Balak, akuti ye atelemi penepene na mabo­nza elongo na bankumu ba Moab. Balak atuni ye : « Yawe alobi na yo nini ? »
Numb LinVB 23:18  Balak asakoli makambo maye : « Teleme, yo Balak, mpe yoka : Tia matoi, yo mwana wa Sipor,
Numb LinVB 23:19  Nzambe azali moto te, akobukaka lokuta te, azali mwana wa Adamu te, akobongolaka maloba ma ye te. Soko alobi liloba, akosala lyango, eye alaki, akokokisa yango.
Numb LinVB 23:20  Atindi ngai mpo ’te nabenisa, bongo nakobenisa mpe nakozonga nsima te.
Numb LinVB 23:21  Namoni makambo mabe epai ya Yakob te, namoni mpe mpasi o Israel te. Yawe Nzambe azali na bango. Epai ya bango akoyoka se nzembo ya kokumisa mokonzi.
Numb LinVB 23:22  Nzambe abimisaki bango o Ezipeti, Nzambe azali mpo ya bango lokola maseke ma nzale.
Numb LinVB 23:23  O ekolo ya Yakob bandimi nkisi te, mpe bakei epai ya nganga nkisi te. Sikawa ntango ekoki ’te bayebisa Yakob na Israel makambo nini Nzambe alingi kosala bango.
Numb LinVB 23:24  Ekolo eye etelemi lokola ntambwe mwasi, lokola ntambwe mobali ebimi, ekolala te soko esilisi kolia mosuni mwa nyama eye ebomaki yango te, soko esilisi komele makila ma ya­ngo te. »
Numb LinVB 23:25  Balak alobi na Balame : « Ata olingi kobetele bango mobondo te, likambo te, kasi obenisa bango mpe te ! »
Numb LinVB 23:26  Balame azongisi : « Nasili kolobela yo : Manso Yawe akoloba, nakosakola ma­ngo. »
Numb LinVB 23:27  Balak alobi na Balame : « Yaka, nakende na yo epai esusu. Kuna mbele Nzambe akondima ’te obetele bango mobondo. »
Numb LinVB 23:28  Balak akei na Balame o ngomba Peor, eye etalani na eliki.
Numb LinVB 23:29  Balame alobi na Balak : « Tongela ngai awa altare nsambo, mpe pesa ngai ngombe nsambo mpe mpata nsa­mbo. »
Numb LinVB 23:30  Balak asali lokola Balame alo­belaki ye, mpe abonzi ngombe yoko na mpata yoko o altare yoko yoko.
Chapter 24
Numb LinVB 24:1  Balame amoni ’te Yawe alingi kobenisa Israel. Mbala eye aluki te bilembo biye bikolakisa makambo makoya nsima, kasi atali se eliki.
Numb LinVB 24:2  Atombola miso, amoni ba-Israel bafandi o nganda, etuka na etuka. Elimo ya Nzambe ekiteli ye,
Numb LinVB 24:3  mpe asakoli maloba maye : « Maloba ma Balame, mwana wa Beor, maloba ma moto azali komono polele ;
Numb LinVB 24:4  maloba ma moto ayoki maloba ma Nzambe. Amoni maye Nzambe nta bokasi alakisi ye Nzambe ayanoli ye, bongo miso ma ye mafungwani.
Numb LinVB 24:5  Bato ba Yakob, biema bya bino bisali kitoko ! Bato ba Israel, mboka ya bino izali malamu,
Numb LinVB 24:6  itandani lokola mabwaku, lokola lopango la nzete o libongo lya ebale, lokola nzete ya aloes Nzambe alonaki, lokola nzete ya sédere mpembeni ya mai !
Numb LinVB 24:7  Elombe akobima o libota lya bino, akozala mokonzi wa bikolo mingi ; akoleka mokonzi Agag na nguya ; bokonzi bwa ye bokolenda.
Numb LinVB 24:8  Nzambe abimisaki ye o Ezipeti, o miso ma ye azali lokola maseke ma nzale, akosilisa bikolo bya banguna ba ye, akobuka minkuwa mya bango.
Numb LinVB 24:9  Akubami, alali o nse lokola nta­mbwe mwasi, lokola nyama ya zamba : nani akomeka kolongola ye o mpongi ? Babenisa oyo akobenisa yo, azwa bobe oyo akobetele yo mobondo ! »
Numb LinVB 24:10  Balak ayokeli Balame nkanda, abeti maboko mpe alobi na ye : « Nabengaki yo mpo ’te obetele banguna ba ngai mobondo mpe ozali kobenisa bango, kina mbala isato !
Numb LinVB 24:11  Sikawa lo­ngwa mpe zonga o mboka ya yo. Nalobaki ’te nakopesa yo lokumu. Yawe apimi yo lokumu lona. »
Numb LinVB 24:12  Balame aya­noli : « Nasili nalobelaki bantoma ba yo :
Numb LinVB 24:13  Ata Balak apesi ngai ndako mobimba etondi na palata mpe na wolo, nakoki kobuka etinda ya Yawe te mpo ya kosala malamu to mabe lokola nalingi. Nakoloba se maye Nza­mbe akoloba.
Numb LinVB 24:14  Sikawa nazongi o mbo­ka ya ngai, kasi yaka naino, nakoyebisa yo makambo bato baye bakosala bato ba yo o mikolo mikoya. »
Numb LinVB 24:15  Na nsima Balame asakoli lisusu : « Maloba ma Balame, mwana wa Beor, maloba ma moto azali komono polele ;
Numb LinVB 24:16  maloba ma oyo ayoki maloba ma Nzambe, mpe ayebi makambo ma Nzambe o nta likolo. Amoni makambo Nzambe nta bokasi alakisi ye ; awa Nzambe akolobela ye, miso ma ye makofungwana.
Numb LinVB 24:17  Namoni elombe oyo, kasi akoya sikawa te ; Nazali komono ye, kasi namoni ye penepene te : monzoto mokobima o libota lya Yakob, moto na lingenda akoteleme, akouta o Israel. Lingenda lya ye likobete bato ba Moab o motó, likopasola motó mwa bana ba Set.
Numb LinVB 24:18  Edom ekokweya o maboko ma bato basusu, ekolo ya Seir ekokoma mokili mwa banguna. Israel akolakisa bokasi bwa ye.
Numb LinVB 24:19  Moto akokonza bikolo bisusu ako­uta o Yakob, akoboma baye bakimaki mboka Ar. »
Numb LinVB 24:20  O ntango ena Balame amoni Amalek, asakoli likambo liye : « Amalek ezali ekolo ya yambo, kasi bankoko ba ye bakosila seko. »
Numb LinVB 24:21  Nsima amoni bato ba Kenaz, mpe asakoli boye : « Kain, ndako ya yo etongami makasi, mboka ya yo epikami o mabanga.
Numb LinVB 24:22  Ata bongo, bato bakoya kotumba yo na móto, mpe bato ba Asur bakoya kokanga bino o boombo. »
Numb LinVB 24:23  Nsima asakoli naino boye : « Mawa e ! Nani akobika awa Nzambe akokokisa mikano mya ye ?
Numb LinVB 24:24  Tala bato bakoya na masuwa makouta o libongo lya Kitim, bakonyokolo Asur, bakosukisa Eber ; bango mpe bakokufa seko. »
Numb LinVB 24:25  Na nsima Balame atelemi mpe azo­ngi o mboka ya ye. Balak mpe akei o ndako ya ye.
Chapter 25
Numb LinVB 25:1  Ba-Israel bakei kofanda o Sitim. Kasi bato babandi kosala bondumba na bana basi ba Moab.
Numb LinVB 25:2  Bilenge basi babendi bango babo­nzela banzambe ba bango mabonza. Ba-Israel balei biloko bya bango mpe bafukameli banzambe ba bango.
Numb LinVB 25:3  Awa ba-Israel basali Baal wa Peor bongo, Yawe asilikeli bango mingi.
Numb LinVB 25:4  Yawe alobi na Moze : « Kanga ba­ka­mbi banso mpe tingisa bango o nzete na moi, o miso ma Yawe mpo ’te nkanda ya Yawe ona bato ba Israel esila. »
Numb LinVB 25:5  Moze alobi na bazuzi ba Israel : « Moto na moto akanga mpe aboma baye bafukamelaki Baal wa Peor. »
Numb LinVB 25:6  Moto moko wa Israel ayei na mwa­si mo-Madian epai ya bandeko ba ye, o miso ma Moze mpe ma bato banso ba Israel o ntango bazalaki kolela o monoko mwa Ema ya Likita.
Numb LinVB 25:7  Pinekas, mwana wa nganga Nzambe Eleazar, noko wa Aron, amoni bo­ngo, na mbangu, likongo o loboko,
Numb LinVB 25:8  alandi mo-Israel tee o ndako ya kolala, mpe atuboli bango babale libumu, ná mo-Israel ná mwasi lokola. O ntango ena etumbu eye ekwelaki bana ba Israel bokomi kosila.
Numb LinVB 25:9  Bokono boye bobomaki bato nkoto ntuku iba­le na inei.
Numb LinVB 25:11  « Pinekas, mwana wa Eleazar, nkoko wa nganga Nzambe Aron, alongoli nkanda ya ngai eye nayokelaki bana ba Israel, zambi ye moko o kati ya bango azalaki na zuwa lokola ngai ; bongo, ata nazalaki na zuwa linene, nasilisi bana ba Israel te.
Numb LinVB 25:12  Yango wana loba na ye : Nakokata na ye bondeko bwa boboto.
Numb LinVB 25:13  Bondeko bona bokozala bwa ye mpe bwa bana ba ye seko, bokopesa ye bonganga bwa seko, zambi awa azalaki na mpila mpo ya Nzambe wa ye, akoki kosala milulu mya bolimbisi masumu ma bana ba Israel. »
Numb LinVB 25:14  Moto wa Israel, oyo babomaki elo­ngo na mwasi mo-Madian, nko­mbo ya ye Zimri, mwana wa Salu, nkumu wa libota lya Simeon.
Numb LinVB 25:15  Mwasi mo-Madian, oyo babomaki, nko­mbo ya ye Kozbi, mwana wa Sur, nkumu wa libota lya Madian.
Numb LinVB 25:18  zambi babendi bino na mayele o likambo lya Peor mpe lya Kozbi, ndeko wa bango, mwana wa nkumu wa Madian, mwasi oyo akufaki o mokolo etumbu ekwelaki ba-Israel mpo ya likambo lya Peor. »
Chapter 26
Numb LinVB 26:1  Nsima ya etumbu ena Yawe alobi na Moze mpe na nganga Nzambe Eleazar, nkoko wa Aron, maloba maye :
Numb LinVB 26:2  « Botanga bato banso ba Israel, libota na libota ; baye banso bakokisi mibu ntuku ibale, baye ba­nso o Israel bakoki na mosala mwa soda. »
Numb LinVB 26:3  O esobe ya Moab, epai ya Yor­dane, penepene na Yeriko, Moze na nganga Nzambe Eleazar batangi
Numb LinVB 26:4  babali banso bakokisi mibu ntuku ibale, lokola Yawe atindaki Moze. Nkombo ya bana ba Israel babimaki o Ezipeti, bango baye :
Numb LinVB 26:5  Ruben azali mwana wa yambo o Israel. Bana ba Ruben : Enok, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Enok ; na Palu, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Palu ;
Numb LinVB 26:6  na Esron, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Esron, na mpe Karmi, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Karmi :
Numb LinVB 26:7  Tala bituka bya libota lya Ruben. Batangi bongo bato 43 730.
Numb LinVB 26:9  Mpe bana ba Eliab : Nemuel, Datan na Abiram. Datan na Abiram bazali baye baponomoki o lisanga mpe batomboki na Moze mpe na Aron ; bazalaki o molongo mwa bato ba Kore o ntango batomboki na Yawe.
Numb LinVB 26:10  Mabelé mafungwanaki mpe mameleki bango elongo na Kore. Móto mosilisaki baninga ba ye banso, bato nkama ibale na ntuku itano ; ezalaki ndakisa o miso ma bato basusu.
Numb LinVB 26:12  Bana ba Simeon, etuka na etuka : Neuel mwana wa yambo wa etuka ya ba-Nemuel ; Yamin, mwana wa ya­mbo wa etuka ya ba-Yamin, na Yakin, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Yakin ;
Numb LinVB 26:13  Zera, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Zera ; Saul, mwana wa ya­mbo wa etuka ya ba-Saul :
Numb LinVB 26:14  Tala bituka bya libota lya Simeon. Batangi bongo bato 22 200.
Numb LinVB 26:15  Bana ba Gad, etuka na etuka : Sefon, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Sefon, na Agi, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Agi, na Suni, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Suni ;
Numb LinVB 26:16  Ozni, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Ozni ; Eri, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Eri ;
Numb LinVB 26:17  Arod, mwana wa ya­mbo wa etuka ya ba-Arod, na Areli, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Areli :
Numb LinVB 26:18  Tala bituka bya libota lya Gad. Batangi bongo bato 40 500.
Numb LinVB 26:19  Bana ba Yuda : Er na Onan, baye bakufaki o mokili mwa Kanana.
Numb LinVB 26:20  Bana ba Yuda bakabwani etuka na etuka : Sela, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Sela ; Peres, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Peres, na Zera, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Zera.
Numb LinVB 26:21  Bana ba Peres : Esron, mwana wa ya­mbo wa etuka ya ba-Esron na Amul, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Amul :
Numb LinVB 26:22  Tala bituka bya libota lya Yuda. Batangi bongo bato 76 500.
Numb LinVB 26:23  Bana ba Isakar, etuka na etuka : Tola, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Tola ; Puva, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Puva ;
Numb LinVB 26:24  Yasub, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Yasub, na Simron, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Simron :
Numb LinVB 26:25  Tala bituka bya li­bota lya Isakar. Batangi bongo bato 64 300.
Numb LinVB 26:26  Bana ba Zabulon, etuka na etuka : Sered, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Sered ; Elon, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Elon, mpe Yalel, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Yalel :
Numb LinVB 26:27  Tala bituka bya libota lya Zabulon. Batangi bongo bato 60 500.
Numb LinVB 26:28  Bana ba Yozefu, etuka na etuka : Manase na Efraim.
Numb LinVB 26:29  Bana ba Manase : Makir, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Makir ; Makir aboti Galaad, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Galaad.
Numb LinVB 26:30  Bana ba Galaad : Yezer, mwa­na wa yambo wa etuka ya ba-Yezer ; Elek, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Elek ;
Numb LinVB 26:31  Asriel, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Asriel ; Sekem, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Sekem ;
Numb LinVB 26:32  Semida, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Semida ; Efer, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Efer.
Numb LinVB 26:33  Selofead, mwana wa Sefer, abotaki bana babali te, se bana basi. Nkombo ya bana basi ba Selofead : Mala, Noa, Ogla, Milka na Tirsa :
Numb LinVB 26:34  Tala bituka bya libota lya Manase. Batangi bongo bato 52 700.
Numb LinVB 26:35  Bana ba Efraim, etuka na etuka : Sutela, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Sutela ; Beker, mwana wa ya­mbo wa etuka ya ba-Beker, na Takan, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Takan.
Numb LinVB 26:36  Bana ba Sutela : Eran, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Eran.
Numb LinVB 26:37  Tala bituka bya libota lya Efraim. Batangi bongo bato 32 500. Baye banso bazali bana ba Yozefu, etuka na etuka.
Numb LinVB 26:38  Bana ba Benyamin, etuka na etuka : Bela, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Bela ; Asbel, mwana wa yambo wa etuka ya Asbel. Akiram, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Akiram ;
Numb LinVB 26:39  Sefufam, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Sefufam ; Kufam, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Ufram.
Numb LinVB 26:40  Bela abotaki bana babali babale : Ard na Naaman. Ard, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Ard, mpe Naaman, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Naaman.
Numb LinVB 26:41  Tala bituka bya libota lya Benyamin, etuka na etuka. Batangi bongo bato 45 600.
Numb LinVB 26:42  Bana ba Dan, etuka na etuka : Suam, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Suam. Tala bana ba Dan, etuka na etuka.
Numb LinVB 26:44  Bana ba Aser, etuka na etuka : Yimna, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Yimna ; Yisvi, mwana wa ya­mbo wa etuka ya ba-Yisvi ; na Beria, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Beria.
Numb LinVB 26:45  Bana ba Beria : Eber, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Eber, na Malkiel, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Malkiel,
Numb LinVB 26:47  Tala bituka bya libota lya Aser. Batangi bongo bato 53 400.
Numb LinVB 26:48  Bana ba Neftali, etuka na etuka : Yasel, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Yasel ; Guni, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Guni ;
Numb LinVB 26:49  Yeser, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Yeser, na Silem, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Silem.
Numb LinVB 26:50  Bango banso bana ba libota lya Neftali, bato 45 400.
Numb LinVB 26:51  Motango mobimba mwa bana ba Israel mozalaki 601 730.
Numb LinVB 26:53  « Kabola mokili mpo ya kopesa moto na moto eteni, otala motango mwa mabota ma bango.
Numb LinVB 26:54  Baye bazali baike, okabela bango mokili monene, baye bazali bake, okabela bango mokili moke ; moto na moto azwa eteni eye ekokani na motango mwa ye.
Numb LinVB 26:55  Nzokande, esika okokabola mokili, malamu obete zeke. Banso bazwa eteni engebene na motango mwa bango, otala molongo mwa mabota epai ya batata.
Numb LinVB 26:56  Bobele bobeti zeke boyebisa moti­ndo osengeli kokabola mokili ; kasi tala mpe motango mwa bato soko bazali baike to bake. »
Numb LinVB 26:57  Batangi mpe ba-Levi, etuka na etuka : Gerson, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Gerson ; Keat, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Keat, na Merari, mwana wa yambo wa etuka ya ba-Merari.
Numb LinVB 26:58  Bituka bya ba-Levi : Etuka ya ba-Libni, etuka ya ba-Ebron, etuka ya ba-Mali, etuka ya ba-Musi, etuka ya ba-Kore. Keat abotaki Amram.
Numb LinVB 26:59  Mwasi wa Amram, nkombo ’te Yokebed, mwana wa Levi, abotamaki o Ezipeti. Abotelaki Amram Aron, Moze na ndeko wa bango wa mwasi Miriam.
Numb LinVB 26:61  Nadab na Abiu bakufaki o ntango babonzelaki Yawe móto mobenemi te.
Numb LinVB 26:62  Batangi bongo babali 23 000, baye banso bakokisi sanza yoko mpe leka. Batangi bango o kati ya bana ba Israel te, zambi bazwaki mabelé lokola bango te.
Numb LinVB 26:63  Tala babali banso Moze na nga­nga Nzambe Eleazar batangi o esobe ya Moab epai ya Yordane penepene na Yeriko.
Numb LinVB 26:64  Wa baye Moze na nga­nga Nzambe Aron batangaki o eliki ya Sinai, ata moto moko atikali te,
Numb LinVB 26:65  zambi Yawe alobaki na bango ’te bakokufa o eliki, mpe ya solo, moto moko atikali te, bobele Kaleb, mwana wa Yefune, na Yozue, mwana wa Nun.
Chapter 27
Numb LinVB 27:1  Bana basi ba Selofead bayei epai ya Moze. Selofead azalaki mwana wa Efer, nkoko wa Galaad, mwana wa Makir, mwana wa Manase. Azalaki moto wa etuka ya Manase, mwana wa Yozefu. Nkombo ya bana basi ba ye : Mala, Noa, Ogla, Milka na Tirsa.
Numb LinVB 27:2  Bakei epai ya Moze, nganga Nzambe Eleazar, bankumu na bato banso ba lisanga o monoko mwa Ema ya Likita, balobi :
Numb LinVB 27:3  « Tata wa biso akufaki o eliki. Azalaki te o kati ya baye batombokoki na Yawe, azalaki o kati ya bato ba Kore te. Akufaki se mpo ya lisumu lya ye moko, abotaki bana babali te.
Numb LinVB 27:4  Mpo nini nkombo ya ye ekufa bongo o libota lya ye ? Awa abotaki mwana mobali te, pesa biso ndambo ya mabelé o kati ya bandeko ba tata wa biso. »
Numb LinVB 27:7  « Bana basi ba Selofead balobi malamu. Pesa bango mabelé mazala ma bango o kati ya bandeko ba tata wa bango ; pesa bango ndambo eye ya tata wa bango.
Numb LinVB 27:8  Nsima loba na bana ba Israel : Soko mobali akufi mpe abo­taki bana babali te, bopesa mabelé ma ye na mwana wa ye wa mwasi.
Numb LinVB 27:9  Soko abotaki mwana mwasi te, bopesa ma­ngo na bandeko babali ba ye.
Numb LinVB 27:10  Soko azali na bandeko babali te, bopesa ma­ngo na bandeko babali ba tata wa ye.
Numb LinVB 27:11  Soko tata wa ye azali na bandeko babali te, bopesa mango na moto moko wa libota, oyo azali ndeko wa penepene. Ye moto azwa mabelé mana mpe akozala nkolo wa mango. Ezali mobeko mwa bosembo mwa bana ba Israel, lokola Yawe atindaki Moze. »
Numb LinVB 27:12  Yawe alobi na Moze : « Buta ngo­mba Abarim mpe tala mokili napesi bana ba Israel.
Numb LinVB 27:13  Awa omoni mwango, okokufa mpe okokende kokutana na bankoko ba yo lokola ndeko wa yo Aron,
Numb LinVB 27:14  zambi botombokeli ngai o eliki ya Sin, mpe bato banso baswanisi ngai o mokolo natindaki yo ’te obimisa mai mpo ’te nalakisa bosantu bwa ngai. » Mazali mai ma Meriba epai ya Kades o eliki ya Sin.
Numb LinVB 27:16  « Yawe, okopesaka bikelamo binso bomoi, pono moto moko akamba lisanga,
Numb LinVB 27:17  oyo akobima mpe akoyingela liboso lya bango, moto akobimisa mpe akoyingisa bato ba lisanga lya Yawe ; bongo bazala te lokola etonga ezangi mokengeli. »
Numb LinVB 27:18  Yawe alobi na Moze : « Kamata Yozue, mwana wa Nun, mo­to atondi na elimo ya Nzambe. Tandela ye maboko.
Numb LinVB 27:19  Nsima benga ye ateleme o miso ma nganga Nza­mbe Eleazar mpe ma bato banso ba lisanga mpo ’te okoka kopesa ye bitinda bya yo o miso ma bango.
Numb LinVB 27:20  Pesa ye ndambo ya nguya ya yo mpo ’te bato banso ba libota lya Israel batosa ye.
Numb LinVB 27:21  Akoteleme o boso bwa nganga Nzambe Eleazar, oyo akosenge Yawe akata likambo na Urim (zeke). Bobele na nsima Yozue akoyeba soko ye na bato banso ba lisanga lya Israel bakoki kobima to koyingela. »
Numb LinVB 27:22  Moze asali lokola Yawe atindaki ye. Akamati Yozue, alakisi ye na nga­nga Nzambe Eleazar mpe na bato ba­nso ba lisanga.
Numb LinVB 27:23  Atandeli ye maboko mpe apesi ye bitinda lokola Yawe alo­baki na monoko mwa Moze.
Chapter 28
Numb LinVB 28:2  « Pesa bana ba Israel mibeko miye : Bayela ngai o mokolo motindami ma­bonza ma ngai, bilei bya ngai, mango nde mabonza ma nsolo mpi­mbo makosepelisa ngai.
Numb LinVB 28:3  Loba na bango : Tala mabonza bakobonzela Yawe : Babonzela ngai bana mpata ibale, ya mbula yoko, izala na mbeba te, mpo ya kotumba mokolo na mokolo seko.
Numb LinVB 28:4  Bonza mpata yoko na ntongo mpe mpata esusu na mpokwa.
Numb LinVB 28:5  Bakisa sani yoko ya fufu esangani na kopo yoko ya mafuta ma oliva ma sika.
Numb LinVB 28:6  Ezali libonza lya seko, libonza lya kotumba lya nsolo mpimbo babo­nzelaka ngai o ngomba Sinai mpo ya kosepelisa ngai, Yawe.
Numb LinVB 28:7  Esika okobo­nza mpata yoko yoko, bakisa kopo yoko ya vino. Basopa masanga makasi mana mpo ya Yawe o esika esantu.
Numb LinVB 28:8  Tumba mpata esusu na mpokwa. Bakisa mabonza ma bolei mpe mabonza ma bomeli se lokola osalaki na ntongo ; ezala libonza lya nsolo mpi­mbo litumbama mpo ya kosepelisa Yawe.
Numb LinVB 28:9  Mokolo mwa Sabato bobonzela ngai bana mpata ibale ya mbula yoko, isala na mbeba te, elongo na sani ibale ya fufu esangani na mafuta mpe na masanga.
Numb LinVB 28:10  Likolo lya libonza lya kotumba lya mokolo na mokolo mpe libonza lya masanga, bobakisa libo­nza lina lya Sabato.
Numb LinVB 28:11  O ebandela ya sanza na sanza, bobonzela Yawe libonza lya kotu­mba : ngombe babali ibale, mpata mobali yoko mpe bana mpata babali nsa­mbo, ya mbula yoko, izala na mbe­bate ;
Numb LinVB 28:12  na ngombe yoko yoko bo­bakisa sani isato ya fufu esangani na mafuta ; na mpata yoko yoko bobakisa sani ibale ya fufu esangani na mafuta ;
Numb LinVB 28:13  na mwana mpata yoko yoko bobakisa sani yoko ya fufu esa­ngani na mafuta. Ezali libonza lya kotumba, libonza lya nsolo mpimbo litumbami mpo ya kosepelisa Yawe.
Numb LinVB 28:14  Bobakisa mabonza ma bomeli : na ngombe bobakisa kopo isato ya vino ; na mpata kopo ibale ya vino, na mwana mpata kopo yoko ya vino. Sanza na sanza botumbela ngai bo­ngo libonza sanza inso ya mobu mobimba.
Numb LinVB 28:15  Likolo lya libonza lya sanza na sanza, bobakisa naino libonza lya ntaba mobali lisala moboma mwa bolimbisi masumu mpe libonza lya bomeli.
Numb LinVB 28:16  Sanza ya yambo o mokolo mwa zomi na minei, ezali Pasika ya Yawe,
Numb LinVB 28:17  mpe mokolo mwa zomi na mitano mwa sanza eye mozala mokolo mwa eyenga. Mikolo nsambo balia mampa mazangi nkisi.
Numb LinVB 28:18  Mokolo mwa yambo basangana likita lisantu. Bokoki kosala mosala makasi te.
Numb LinVB 28:19  Bobonzela Yawe mabonza ma kotumba : ngo­mbe babali ibale, mpata mobali yoko, bana mpata nsambo ya mbula yoko, izala na mbeba te.
Numb LinVB 28:20  Bobakisa libonza lya bolei : na ngombe bobakisa sani isato ya fufu esangani na mafuta ; na mpata yoko bobakisa sani ibale ya fufu esangani na mafuta ;
Numb LinVB 28:21  na bana mpata nsambo yoko yoko bobakisa se sani yoko.
Numb LinVB 28:22  Bobonza mpe ntaba mobali bo moboma mpo ya masumu, mpo ’te basala milulu mya bolimbisi masumu.
Numb LinVB 28:23  Bosala yango na ntongo ata bosili bobonzi libonza lya kotumba lya mokolo na mokolo.
Numb LinVB 28:24  Bosala bongo mikolo nsambo, mokolo na mokolo. Yango ezali bilei, libonza lya nsolo mpimbo likosepelisa Yawe. Babakisa yango likolo lya libonza lya mokolo na mokolo lya seko, na mpe libonza.
Numb LinVB 28:25  Mokolo mwa nsambo bosangana likita lisantu ; bosala mosala makasi te.
Numb LinVB 28:26  O mokolo mwa mbuma ya ya­mbo, bobonzela Yawe libonza lya mbuma ya sika, o ntango ya eyenga ya Poso, bosangana likita lisantu ; bosala mpe mosala makasi te.
Numb LinVB 28:27  Bobo­nza libonza lya kotumba, libonza lya nsolo mpimbo mpo ya kosepelisa Yawe : ngombe babali ibale, mpata mobali yoko na bana mpata nsambo ya mbula yoko.
Numb LinVB 28:28  Bobakisa libonza lya bolei : fufu esangani na mafuta : na ngombe yoko yoko sani isato ; na mpata yoko yoko sani ibale ;
Numb LinVB 28:30  Bopesa mpe ntaba mobali bo moboma mpo ya masumu, mpo ’te basala mpo ya bino milulu mya bolimbisi masumu.
Numb LinVB 28:31  Bosala bongo, ata bosili kobonza libonza lya mokolo na mokolo, na mabonza ma bolei na mabonza ma bomeli.
Chapter 29
Numb LinVB 29:1  O sanza ya nsambo, o mokolo mwa yambo, bosangana likita lisantu. Bosala mosala makasi te, zambi ezali eyenga ya bobeti mi­ndu­le.
Numb LinVB 29:2  Bobonza libonza lya kotumba, libonza lya nsolo mpimbo mpo ya kosepelisa Yawe : ngombe mobali yoko, mpata mobali yoko, bana mpata nsambo ya mbula yoko, izala na mbe­ba te.
Numb LinVB 29:3  Bobakisa libonza lya bolei : fufu esangani na mafuta, sani isato mpo ya ngombe mobali, sani ibale mpo ya mpata,
Numb LinVB 29:5  Bopesa mpe ntaba mobali bo moboma mpo ya masumu, mpo ’te basala mpo ya bino milulu mya bolimbisi masumu.
Numb LinVB 29:6  Bosala bongo ata bosili kobonza libo­nza lya sanza ya sika, na libonza lya bolei, na libonza lya mokolo na mokolo, lya bolei mpe lya bomeli lokola mobeko motindi, lisala libonza lya nsolo mpimbo litumbami mpo ya ko­sepelisa Yawe.
Numb LinVB 29:7  O sanza ya nsambo, o mokolo mwa zomi, bosangana likita lisantu. Bolala nzala mpe bosala mosala makasi te.
Numb LinVB 29:8  Bobonzela Yawe libonza lya kotumba, libonza lya nsolo mpimbo mpo ya kosepelisa Yawe : ngombe mobali yoko, mpata mobali yoko, bana mpata nsambo ya mbula yoko, izala na mbeba te.
Numb LinVB 29:9  Bobakisa libonza lya bolei : fufu esangani na mafuta : sani isato mpo ya ngombe, sani ibale mpo ya ntaba,
Numb LinVB 29:11  Bobonza mpe ntaba mobali bo moboma mpo ya masumu. Bosala bongo ata bosili kobonza moboma mpo ya masumu o eyenga ya Bolimbisi masumu, na libonza lya mokolo na mokolo, na mabonza ma bolei na mabonza ma bomeli.
Numb LinVB 29:12  O sanza ya nsambo, o mokolo mwa zomi na mitano, bosangana likita lisantu. Bosala mosala makasi te, mpe mikolo nsambo bosepela eyenga ya Yawe.
Numb LinVB 29:13  Bobonza libonza lya nsolo mpimbo litumbami mpo ya kosepelisa Yawe : ngombe babali zomi na isato, mpata babali ibale, bana mpata zomi na inei ya mbula yoko, izala na mbeba te.
Numb LinVB 29:14  Bobakisa mabonza ma bolei : fufu esangani na mafuta : sani isato mpo ya ngombe zomi na isato yoko yoko, sani ibale mpo ya mpata ibale yoko yoko,
Numb LinVB 29:15  mpe sani yoko mpo ya bana mpata zomi na inei yoko yoko.
Numb LinVB 29:16  Babonza mpe ntaba mobali yoko bo moboma mpo ya masumu. Bosala bongo ata bosili kobonza libonza lya mokolo na mokolo, na mabonza ma bolei na mabonza ma bomeli.
Numb LinVB 29:17  O mokolo mwa mibale : ngombe babali zomi na ibale, mpata babali ibale, bana mpata zomi na inei ya mbula yoko, izala na mbeba te.
Numb LinVB 29:18  Bobakisa mabonza ma bolei mpe ma bomeli lokola mobeko motindi enge­bene na motango mwa ngombe, mpa­ta na bana mpata.
Numb LinVB 29:19  Bobonza mpe nta­ba mobali bo moboma mpo ya masumu. Bosala bongo ata bosili kobonza libonza lya mokolo na mokolo, na mabonza ma bolei mpe ma bomeli.
Numb LinVB 29:20  O mokolo mwa misato bobonza ngombe babale zomi na yoko, mpata babali ibale, bana mpata zomi na inei ya mbula yoko, isala na mbeba te.
Numb LinVB 29:21  Bobakisa mabonza ma bolei mpe ma bomeli lokola mobeko motindi, enge­bene na motango mwa ngombe, mpata na bana mpata.
Numb LinVB 29:22  Bobonza ntaba mobali bo moboma mpo ya masumu ; bosala bongo ata bosili kobonza libonza lya mokolo na mokolo, na mabonza ma bolei mpe ma bomeli.
Numb LinVB 29:23  O mokolo mwa minei bobonza ngombe babali zomi, mpata babali ibale na bana mpata zomi na inei ya mbula yoko, izala na mbeba te.
Numb LinVB 29:24  Bobakisa mabonza ma bolei mpe ma bomeli lokola mobeko motindi mpe engebene na motango mwa ngombe, mpata na bana mpata.
Numb LinVB 29:25  Bobonza mpe ntaba mobali bo moboma mpo ya masumu ; bosala bongo ata bosili kobonza libonza lya mokolo na mokolo, na mabonza ma bolei mpe ma bomeli.
Numb LinVB 29:26  O mokolo mwa mitano bobonza ngombe babali libwa, mpata babali ibale na bana mpata zomi na inei ya mbula yoko, izala na mbeba te.
Numb LinVB 29:27  Bobakisa mabonza ma bolei mpe ma bomeli lokola mobeko motindi, enge­bene na motango mwa ngombe, mpata na bana mpata.
Numb LinVB 29:28  Bobonza mpe ntaba mobali bo moboma mpo ya ma­sumu ; bosala bongo ata bosili kobonza libonza lya mokolo na mokolo, na mabonza ma bolei na mabonza ma bomeli.
Numb LinVB 29:29  O mokolo mwa motoba bobonza ngombe babali mwambi, mpata babali ibale, na bana mpata zomi na inei ya mbula yoko, isali na mbeba te.
Numb LinVB 29:30  Bobakisa mabonza ma bolei mpe ma bomeli lokola mobeko motindi engebene na motango mwa ngombe, mpata na bana mpata.
Numb LinVB 29:31  Bobonza mpe ntaba mobali bo moboma mpo ya masumu ; bosala bongo ata bosili kobonza libonza lya mokolo na mokolo, na mabonza ma bolei mpe ma bomeli.
Numb LinVB 29:32  O mokolo mwa nsambo bobonza ngombe babali nsambo, mpata babali ibale na bana mpata zomi na inei ya mbula yoko, izala na mbeba te.
Numb LinVB 29:33  Bo­bakisa mabonza ma bolei mpe ma bomeli, bosala lokola mobeko moti­ndi engebene na motango mwa ngo­mbe, mpata na bana mpata.
Numb LinVB 29:34  Bobo­nza mpe ntaba mobali bo moboma mpo ya masumu ; bosala bongo ata bosili kobonza libonza lya mokolo na mokolo, na mabonza ma bolei mpe ma bomeli.
Numb LinVB 29:35  O mokolo mwa mwambi bosa­ngana likita ; bosala mosala makasi te.
Numb LinVB 29:36  Bobonza libonza lya kotumba, libonza lya nsolo mpimbo mpo ya kosepelisa Yawe : ngombe mobali yoko, mpata mobali yoko na bana mpata nsambo ya mbula yoko izala na mbeba te.
Numb LinVB 29:37  Bobakisa mabonza ma bolei mpe ma bomeli, bosala lokola mobeko motindi engebene na motango mwa ngombe, mpata na bana mpata.
Numb LinVB 29:38  Bobonza mpe ntaba mobali bo moboma mpo ya masumu ; bosala bongo ata bosili kobonza libonza lya mokolo na mokolo, na mabonza ma bolei mpe ma bomeli.
Numb LinVB 29:39  Bobele bongo okobonzela Yawe mabonza o ntango ya biyenga bya bino binene, ata boponi mabonza masusu ma bokumisi Nzambe to mabo­nza mauti o mitema mya bino moko to mabonza ma kotumba, to mabo­nza ma bolei mpe ma bomeli, to miboma mya bondeko. »
Chapter 30
Numb LinVB 30:1  Moze alobi na bana ba Israel maloba manso Yawe atindaki ye.
Numb LinVB 30:2  Moze alobi na bankumu ba mabota ma Israel : « Boyoka mibeko Yawe atindaki :
Numb LinVB 30:3  Soko mobali moko alakeli Yawe elako to alayi ndai ’te akomipesa mo­sa­la, moto oyo akoki kobongola malo­ba ma ye te, zambi asengeli kokokisa maloba manso mabimaki o monoko mwa ye.
Numb LinVB 30:4  Elenge mwasi, oyo abali naino te mpe afandi o ndako ya tata wa ye, soko alakeli Yawe elako to alayi ndai ’te akomipesa mosala,
Numb LinVB 30:5  mpe tata wa ye ayoki ’te mwana wa ye alaki elako to alayi ndai ’te akomipesa mosala, kasi ayebisi ye eloko te, mwasi oyo ase­ngeli kokokisa elako mpe ndai alayaki, ata tata wa ye alobi na ye eloko te.
Numb LinVB 30:6  Kasi soko tata wa ye awa ayoki li­ka­mbo lya elako to lya ndai, aboyi ko­ndi­ma yango, elako na ndai ya ye iko­mi mpamba. Yawe akotuna ye te, za­mbi tata wa ye aboyi kondima ya­ngo.
Numb LinVB 30:7  Soko elenge mwasi oyo alakaki elako to alayaki ndai, kasi akanisaki malamu te, na nsima abali,
Numb LinVB 30:8  mobali ayoki mpo yango, kasi alobi eloko te, mwasi asengeli kokokisa elako na ndai ya ye.
Numb LinVB 30:9  Nzokande, soko mobali ayoki likambo lina kasi aboyi kondima yango, mwasi asengeli kokokisa elako to ndai ya ye te, eye ebimaki o monoko na bokebi te. Yawe akotala yango mpamba.
Numb LinVB 30:10  Mwasi akufeli mobali to aboyami na mobali, soko alaki elako to alayi ndai, asengeli kokokisa yango.
Numb LinVB 30:11  Soko mwasi alayi ndai to alaki elako o ndako ya mobali wa ye,
Numb LinVB 30:12  awa mobali ayoki yango mpe alobi eloko te to apekisi ye te, mwasi asengeli kokokisa ndai to elako ya ye, ata ya moti­ndo nini.
Numb LinVB 30:13  Kasi soko mobali wa ye, awa ayoki yango mpe aboyi kondima ya­ngo, maloba manso mabimaki o monoko mwa mwasi mazali na ntina te, ezala elako to ndai. Awa mobali wa ye aboyi kondima yango, Yawe akotala yango mpamba.
Numb LinVB 30:14  Elako to ndai inso ya mwasi, mobali wa ye akoki kondima to kopekisa.
Numb LinVB 30:15  Soko o mokolo mwa nsima mobali wa ye alobi eloko te, elakisi ’te andimi elako to ndai ya ye, ata ya motindo nini. Andimi yango soko o mokolo ayoki yango alobi eloko te.
Numb LinVB 30:16  Kasi soko ayoki yango mpe andimi yango te se nsima ya mikolo, ye moto akomeme ngambo o esika ya mwasi wa ye.
Numb LinVB 30:17  Tala mibeko Yawe atindi mitali mo­bali na mwasi wa ye, to tata na mwana mwasi wa ye, ntango azali naino elenge mpe afandi o ndako ya tata wa ye. »
Chapter 31
Numb LinVB 31:2  « Sala ’te bana ba Israel bazongisela bato ba Madian mabe basalaki. Na nsima okokende kokutana na bankoko ba yo. »
Numb LinVB 31:3  Moze alobi na bato : « Bopono bato bamilengele na etumba ya Yawe na bato ba Madian, bazongisela bango mabe o nkombo ya Yawe.
Numb LinVB 31:4  Bopono bato nkoto yoko o libota lyoko lyoko lya Israel. »
Numb LinVB 31:5  Basangisi bato nkoto yoko o libota lyoko lyoko lya Israel, bongo bazwi basoda nkoto zomi na ibale mpo ya etumba.
Numb LinVB 31:6  Moze atindi bango o etumba, basoda nkoto yoko o libota lyoko lyoko, elongo na Pinekas, mwana wa nganga Nzambe Eleazar, oyo azali komeme biloko bisantu na mindule mpo ya koyebisa ngonga ya kobunda.
Numb LinVB 31:7  Babundi etumba na ba-Madian lokola Yawe atindaki Moze, mpe babomi babali banso.
Numb LinVB 31:8  Babomi mpe bakonzi ba Madian : Evia, Rekem, Sur, Ur na Reba, bakonzi batano ba Madian. Babomi mpe Balaam, mwana wa Beor na mopanga.
Numb LinVB 31:9  Bana ba Israel bakangi mpe basi ba Madian na bana ba bango bo baombo, babotoli mpe bibwele bya bango binso, ngombe na biloko bya bango bisusu.
Numb LinVB 31:11  Nsima basangisi binso babotoloki : bato na nyama.
Numb LinVB 31:12  Bakei na baombo mpe na biloko babotoli epai ya Moze na nganga Nzambe Eleazar mpe o miso ma bato banso ba lisanga tee bakomi o nganda, o esobe ya Moab, o ngambo ya Yordane, penepene na Yeriko.
Numb LinVB 31:13  Moze na nganga Nzambe Eleazar na bankumu banso ba lisanga babimi o nganda mpo ya kokutana na bato bauti etumba.
Numb LinVB 31:14  Moze asilikeli bakomanda ba basoda, baye bazalaki bakonzi ba bato nkoto yoko to monkama, baye bauti kobunda etumba.
Numb LinVB 31:15  Alobi na bango : « Mpo nini bobomi basi te ?
Numb LinVB 31:16  Bango nde balandaki maloba ma Balaam mpe bapesaki bana ba Israel mayele mabe mpo baboya Yawe kuna o Peor. Yango wana etumbu ekwelaki lisanga lya Yawe.
Numb LinVB 31:17  Bongo boboma bana babali banso, na mpe basi banso bayebaki mobali.
Numb LinVB 31:18  Kasi bana basi bayebi naino mobali te, boboma bango te. Bino moko bokoki kokamata bango.
Numb LinVB 31:19  Bino bokende kolala o libanda lya nganda mikolo nsambo, bino banso bobomaki moto to bosimbaki ebembe. Bomipetola, bino elongo na bato bokangi, o mokolo mwa misato mpe mwa nsambo.
Numb LinVB 31:20  Bosukola mpe bilamba bya bino na mpe biloko binso bisalemi na lomposo la nyama, bilamba binso bisalami na nsuki ya ntaba mpe biloko binso bisalami na nzete. »
Numb LinVB 31:21  Nganga Nzambe Eleazar alobi na basoda bauti etumba : « Boyoka mobeko Yawe apesaki Moze :
Numb LinVB 31:22  Boka­mata biloko binso bya wolo, palata, mbe­ngi, ebende, etini na mondolu ;
Numb LinVB 31:23  biloko bina binso bikozikaka na móto te, bopetola byango na móto mpe bikozala peto ; kasi bikokoma peto mpenza mpo ya mai masantu. Biloko binso bikoki kozika na móto, bonyakela byango mai masantu.
Numb LinVB 31:24  Bosukola bilamba bya bino o mokolo mwa nsambo, mpe bokokoma peto. Nsima bokoki kozonga o nga­nda. »
Numb LinVB 31:26  « Elongo na nganga Nzambe Eleazar mpe na bankumu banso ba mabota mpe ba lisanga, tanga biloko binso bozwaki o etumba : ná bato ná nyama.
Numb LinVB 31:27  Kabola biloko ndambo ibale : pesa basoda bakendeki etumba ndambo yoko, bato ba lisanga ndambo esusu.
Numb LinVB 31:28  Basoda bakendeki etumba bapesa Yawe eteni yoko ya nkama itano ya binso babotoli : bato, ngombe, mpunda na mpata.
Numb LinVB 31:29  Kamata yango o kati ya ndambo eye ya bango mpe pesa yango na nga­nga Nzambe Eleazar, ezala mpako ya Yawe.
Numb LinVB 31:30  Ya ndambo eye ekozala mpo ya ba-Israel basusu, longola mpe nda­mbo : pesa yoko ya ntuku itano, ezala ya bato, mpunda, nyama inene to ike ; pesa yango na ba-Levi, baye bakosalaka mosala o Ndako ya Yawe. »
Numb LinVB 31:31  Moze na nganga Nzambe Eleazar basali lokola Yawe atindaki Moze.
Numb LinVB 31:32  Ná biloko biye babuni babotoli o etumba, babotoli mpe mpata 675 000,
Numb LinVB 31:35  O kati ya bato, basi bayebaki mobali te bazalaki 32 000.
Numb LinVB 31:36  Bapesi ndambo yoko na basoda bakendeki etumba : mpata 337 500,
Numb LinVB 31:37  mpe eye basengeli kopesa Yawe bo mpako ezalaki mpata 675.
Numb LinVB 31:38  Ya ngombe inso 36 000, bapesa 72 bo mpako ya Yawe.
Numb LinVB 31:39  Ya mpunda inso 30 500 bapesa 61 bo mpako ya Yawe.
Numb LinVB 31:41  Moze apesi nganga Nzambe Eleazar mpako ya Yawe lokola Yawe atindaki ye.
Numb LinVB 31:42  Ndambo esusu, eye Moze apesaki basoda te, apesi bana ba Israel.
Numb LinVB 31:47  Ya biloko binso bapesi bana ba Israel, o kati ya bato to nyama ntuku itano, Moze akamati moko mpe apesi ba-Levi, baye bakosalaka mosala o Ndako ya Yawe, lokola Yawe atindaki Moze.
Numb LinVB 31:48  Bakomanda ba basoda, bakonzi ba bato nkoto yoko to monkama bakei epai ya Moze.
Numb LinVB 31:49  Balobi na ye : « Biso basaleli ba yo totangi motango mwa basoda ba biso, mpe ata moko azangi te.
Numb LinVB 31:50  Yango wana toyei moto na moto na libonza lya ye mpo ya Yawe. Tozwaki biloko biye bya wolo : bikomo, mpete, biloko bya matoi, mayaka ma nkingo. Inso ikosalisa mpo ’te tozwa bolimbisi masumu o miso ma Yawe. »
Numb LinVB 31:51  Moze na nganga Nzambe Eleazar bayambi wolo na biloko bina binso bya motuya.
Numb LinVB 31:52  Biloko binso bya wolo bapesi Yawe bikoki mitako 16 750. Bakonzi ba bato nkoto yoko mpe bakonzi ba bato monkama bapesi byango.
Numb LinVB 31:53  O etu­mba soda moko moko asili azwi biloko ye moko abotoli.
Numb LinVB 31:54  Kasi Moze na nganga Nzambe Eleazar bakei kotika wolo, eye bakonzi ba bato nkoto yoko to monkama bapesi, o Ema ya Likita, mpo ’te bakundola likambo lya bana ba Israel o miso ma Yawe.
Chapter 32
Numb LinVB 32:1  Bana ba Ruben mpe ba Gad bazalaki na bibwele mingi, ebele mpenza. Bamoni ’te mokili mwa Yazer na mokili mwa Galaad mozalaki mabelé malamu mpo ya koleisa bibwele.
Numb LinVB 32:2  Bana ba Gad mpe ba Ruben bayei epai ya Moze na nganga Nzambe Eleazar na bankumu ba lisanga mpe balobi :
Numb LinVB 32:3  « Mboka Atarot, Dibon, Yazer, Nimra, Kesbon, Eleale, Sebam, Nebo na Meon,
Numb LinVB 32:4  mokili mo­ye Yawe abotoli mpo apesa ba-Israel mozali mabelé malamu mpo ya koleisa bibwele, mpe biso basaleli ba yo tozali babengeli ba bibwele. »
Numb LinVB 32:5  Balobi lisusu : « Soko tozwi bolamu o miso ma yo, tika mokili moye mozala eteni ya biso basaleli ba yo ; otinda biso tokatisa Yordane te. »
Numb LinVB 32:6  Moze ayanoli bana ba Gad mpe ba Ruben maloba maye : « Boni ! Ba­ndeko ba bino bákende kobunda etumba mpe bino bótikala awa ?
Numb LinVB 32:7  Awa bana ba Israel balingi kokoto o mo­kili Yawe apesaki bango, mpo nini bozali kolembisa bango mitema ?
Numb LinVB 32:8  Batata ba bino basalaki se bongo o ntango natindaki bango ut’o Kades Barne mpo ’te batala mokili.
Numb LinVB 32:9  Bake­ndeki tee o lobwaku la Eskol, batali mokili mpe na nsima balembisaki ba-Israel mitema mpo ’te bakende te o mokili Yawe apesaki bango.
Numb LinVB 32:10  Yango wana o mokolo mona Yawe ayokaki nkanda mpenza mpe alayaki ndai eye :
Numb LinVB 32:11  ‘Bato baye babimaki o Ezipeti mpe bakokisi mibu ntuku ibale bakomono mokili mona mokolo moko te, mokili moye nalakelaki Abarama, Isaka na Yakob, zambi batosaki ngai na motema moko te.
Numb LinVB 32:12  Bobele Kaleb, mwana wa Yefune, moto wa Kenaz, na Yozue, mwana wa Nun bakokoto, zambi bango batosaki Yawe na motema moko.’
Numb LinVB 32:13  Yawe ayokeli ba-Israel nkanda mpe asalaki ’te balekaleka o eliki mibu ntuku inei mobimba tee libota liye mobimba lisilaki nye, mpo basalaki mabe o miso ma Yawe.
Numb LinVB 32:14  Mpe sikawa bino bokomi kosala lokola libota lya basumuki lokola batata ba bino, mpo ya kongalisa nkanda eye Yawe azali koyokela bato ba Israel.
Numb LinVB 32:15  Soko botiki kolanda Yawe, bokoumela naino mikolo mingi o eliki mpe bokotinda bato banso o nzela ya liwa. »
Numb LinVB 32:16  Balobi lisusu na Moze : « Biso tolingi kotonga mapango ma mpata mpo ya bibwele bya biso mpe bi-ngumba mpo ya bana ba biso.
Numb LinVB 32:17  Kasi biso moko tokomeme bibuneli o maboko, biso tokokende liboso lya bana ba Israel tee mokolo tosili kokomisa bango o esika basengeli kokoma. Kasi bana ba biso bakotikala o bingu­mba bisingami na mapango makasi mpo ’te bato bafandi o mokili moye basala bango mabe te.
Numb LinVB 32:18  Tokozonga epai biso te liboso ’te bana ba Israel banso bakoma bankolo ba mabelé ma bango.
Numb LinVB 32:19  Biso tokozwa mabelé elo­ngo na bango te kuna o ngambo ya Yordane, zambi mabelé ma biso mazali epai eye ya Yordane, epai moi mokobimaka. »
Numb LinVB 32:20  Moze alobi na bango : « Soko bokokisi maloba ma bino mpe bomile-ngeli na etumba o miso ma Yawe,
Numb LinVB 32:21  mpe soko bino banso bondimi kobunda etumba mpe kokatisa Yordane o miso ma Yawe mpo ya kobengana banguna ba ye banso,
Numb LinVB 32:22  o mokolo mo­na, ntango Yawe akokonza mokili mona, bokoki kozonga wana ; bokozala na nyongo te epai ya Yawe to epai ya bato ba Israel. Mpe o miso ma Yawe mokili moye mokozala mwa bi­no.
Numb LinVB 32:23  Kasi soko bosali bongo te, bo­kosala lisumu o miso ma Yawe ; bongo boyeba ’te lisumu lya bino likolanda bino nsima.
Numb LinVB 32:24  Sikawa boke­nde kotonga bingumba mpo ya bana ba bino, mpe mapango mpo ya bi­bwe­le bya bino, kasi bosala maka­mbo manso se lokola bolakeli ngai. »
Numb LinVB 32:25  Bana ba Gad mpe ba Ruben balobi na Moze : « Biso basaleli ba yo tokosala lokola mokonzi wa biso ati­ndi.
Numb LinVB 32:26  Bana na basi ba biso bakotikala o bi­ngumba bya Galaad elongo na bibwele mpe na nyama ya biso ;
Numb LinVB 32:27  kasi biso, basaleli ba yo, banso bibuneli o maboko, tokokende kobunela Yawe, lokola yo mokonzi wa biso oti­ndi. »
Numb LinVB 32:28  Moze apesi bitinda mpo ya bango na nganga Nzambe Eleazar, na Yozue, mwana wa Nun mpe na bankumu banso ba mabota ma Israel.
Numb LinVB 32:29  Alobi na bango : « Soko bana ba Gad mpe ba Ruben bandimi, bibuneli o maboko, bakokatisa Yordane elongo na bino mpo ya kobunela Yawe, o mokolo bosili kobotolo mokili mona, bopesa bango mokili mwa Galaad, mozala mwa bango.
Numb LinVB 32:30  Kasi soko bakatisi Yordane te mpo ya kobunda etumba, bakozwa mabelé o kati ya bino o mokili mwa Kanana. »
Numb LinVB 32:31  Bana ba Gad mpe ba Ruben bazongisi : « Maloba Yawe alobi na biso, basaleli ba yo, tokokokisa mango.
Numb LinVB 32:32  Biso tokokatisa Yordane mpo ya kobunela Yawe o mokili mwa Kanana, kasi biso tosengeli kozwa mabelé epai eye ya Yordane. »
Numb LinVB 32:33  Moze apesi mokili mwa Sion, mokonzi wa bato ba Amor mpe mokili mwa Og, mokonzi wa Basan na bana ba Gad mpe ba Ruben mpe na ndambo ya libota lya Manase, mwana wa Yozefu ; akabeli bango mpe bingumba o ndelo ya mokili.
Numb LinVB 32:36  Bet-Nimra na Bet-Aran, bingumba bisingami na mapango makasi mpo ya kobatela mpata ya ba­ngo.
Numb LinVB 32:37  Bana ba Ruben batongi Kesbon, Eleale, Kiriatim,
Numb LinVB 32:38  Nebo, na Baal-Meon (kasi babongoli nkombo ya yango nsima) na Sibma. Bapesi bi­ngumba biye batongaki nkombo.
Numb LinVB 32:39  Bana ba Makir, mwana wa Manase, bakei o mokili mwa Galaad. Babotoli mwango mpe babengani ba-Amor bazalaki wana.
Numb LinVB 32:40  Moze apesi Makir, mwana wa Manase, mokili mwa Galaad ; oyo akei kofanda kuna.
Numb LinVB 32:41  Yair, mwana wa Manase, akei kobotolo nganda ya bango mpe apesi ya­ngo nkombo Nganda ya Yair.
Numb LinVB 32:42  Noba akei kobotolo Kenat mpe bingumba bya penepene, mpe apesi byango nko­mbo ya ye moko Noba.
Chapter 33
Numb LinVB 33:1  Molongo mwa mibembo minso bana ba Israel basalaki ut’o mokolo babimaki o Ezipeti. Moze na Aron bazalaki kokamba ba­ngo.
Numb LinVB 33:2  Moze akomi o monkanda nko­mbo ya bisika binso mbala inso Yawe atindaki ’te balongola nganda. Nko­mbo ya bisika binso balekaki yango iye.
Numb LinVB 33:3  Balongwi o Ramses o sanza ya yambo. O sanza ya yambo, o mokolo mwa zomi na mitano, mokolo nsima ya Pasika, bana ba Israel babimi lokola bansomi o miso ma bato ba­nso ba Ezipeti.
Numb LinVB 33:4  Ba-Ezipeti bazalaki kokunda bana ba yambo banso, baye Yawe abomaki, mpo ya kosilisa bokasi bwa banzambe ba bango.
Numb LinVB 33:5  Bana ba Israel balongwi o Ramses mpe bapiki nganda o Sukot.
Numb LinVB 33:6  Balo­ngwi o Sukot mpe bakei o Etam, o ndelo ya eliki.
Numb LinVB 33:7  Balongwi o Etam mpe bazongi o Pi-Akirot, penepene na Baal-Sefon mpe bapiki nganda o Migdol.
Numb LinVB 33:8  Balongwi o Pi-Akirot mpe bakomi o eliki, bakatisi mbu mpe batamboli mikolo misato o eliki ya Etam mpe bapiki nganda o Mara.
Numb LinVB 33:9  Balongwi o Mara mpe bakomi o Elim, esika bakuti maziba zomi na mabale na nzete ya mbila ntuku nsambo, bapiki nganda kuna.
Numb LinVB 33:10  Balongwi o Elim mpe bapiki nganda penepene na Mbu Etane.
Numb LinVB 33:11  Balongwi o Mbu Etane, bakei kopika nganda o eliki ya Sin.
Numb LinVB 33:12  Balo­ngwi o eliki ya Sin mpe bapiki nganda o Dofka.
Numb LinVB 33:14  Balongwi o Alus mpe bapiki nganda o Refidim, esika bato bazwi mai ma komele te.
Numb LinVB 33:15  Balongwi o Refidim mpe bapiki nga­nda o eliki ya Sinai.
Numb LinVB 33:16  Balongwi o eliki ya Sinai mpe bapiki nganda o Kibrot-Atava.
Numb LinVB 33:17  Balongwi o Kibrot-Atava mpe bapiki nganda o Aserot.
Numb LinVB 33:19  Balongwi o Ritma mpe bapiki nganda o Rimon-Peres.
Numb LinVB 33:20  Balongwi o Rimon-Peres mpe bapiki nganda o Libna.
Numb LinVB 33:23  Balongwi o Kelata mpe bapiki nganda o ngomba Sefer.
Numb LinVB 33:24  Balongwi o ngomba Sefer mpe bapiki nganda o Karada.
Numb LinVB 33:29  Balongwi o Mitka mpe bapiki nga­nda o Kasmona.
Numb LinVB 33:30  Balongwi o Kasmona mpe bapiki nganda o Moserot.
Numb LinVB 33:31  Balongwi o Moserot mpe bapiki nganda o Bene-Yakan.
Numb LinVB 33:32  Balongwi o Bene-Yakan mpe bapiki nganda o Kor-Agid.
Numb LinVB 33:33  Balongwi o Kor-Agid mpe bapiki nganda o Yotbata.
Numb LinVB 33:34  Balo­ngwi o Yotbata mpe bapiki nganda o Abrona.
Numb LinVB 33:35  Balongwi o Abrona mpe bapiki nganda o Esion-Geber.
Numb LinVB 33:36  Balongwi o Esion-Geber mpe bapiki nganda o eliki ya Sin o Kades.
Numb LinVB 33:37  Balongwi o Kades mpe bapiki nganda o ngomba Kor o ndelo ya mokili mwa Edom.
Numb LinVB 33:38  Nganga Nzambe Aron abuti ngomba Kor lokola Yawe atindaki ye. Akufi bobele kuna ; ezalaki o mobu mwa ntuku inei nsima ya bobimi bwa bana ba Israel o Ezipeti, o sanza ya itano, o mokolo mwa yambo.
Numb LinVB 33:39  Aron akokisi mibu monkama na ntuku ibale na misato o ntango akufi o ngomba Kor.
Numb LinVB 33:40  Ba-Kanana o Negeb o mokili mwa Kanana mpe mokonzi wa Arad bayoki ’te bana ba Israel bazalaki koya.
Numb LinVB 33:41  Balongwi o ngomba Kor mpe bapiki nganda o Salmona.
Numb LinVB 33:44  Balongwi o Obot mpe bapiki nga­nda o Iye-Abarim o mokili mwa Moa­b.
Numb LinVB 33:45  Balongwi o Iye-Abarim mpe bapiki nganda o Dibon-Gad.
Numb LinVB 33:46  Balongwi o Dibon-Gad mpe bapiki nga­nda o Almon-Diblataim.
Numb LinVB 33:47  Balongwi o Almon-Diblataim mpe bapiki nga­nda o ngomba Abarim penepene na Nebo.
Numb LinVB 33:48  Balongwi o ngomba Abarim mpe bapiki nganda o Bisobe bya Moab penepene na Yordane epai ya Yeriko.
Numb LinVB 33:49  Bapiki nganda penepene na Yor­dane ut’o Bat-a-Yesimot tee Abel-a-Sitim, o Bisobe bya Moab.
Numb LinVB 33:50  O Bisobe bya Moab, penepene na Yordane epai ya Yeriko, Yawe alobi na Moze maloba maye :
Numb LinVB 33:51  « Loba na bana ba Israel banso : Mokolo bokokatisa Yordane mpo ya kokoma o mokili mwa Kanana,
Numb LinVB 33:52  bobengana liboso lya bino bato banso ba ekolo ena. Boboma bikeko bya bango bya mabanga mpe biye bya bibende, bobuka ndako ya banzambe ba bango.
Numb LinVB 33:53  Bokokoma bankolo ba mokili mona mpe bokofanda kuna, zambi nakomisi bino bankolo ba mokili mona.
Numb LinVB 33:54  Mpo ya kokabela mabota ma bino mabelé bobete zeke. Libota lya bato baike bopesa lyango mabelé mingi, mabota ma bato mingi te, bopesa mango eteni eke. Ebeti bino zeke, bondima eteni eye ekweli bino. Bokokabola mabelé engebene na mabota ma bankoko.
Numb LinVB 33:55  Kasi soko bobe­ngani liboso lya bino bato ba mokili mona te, bato baye bino botiki na bomoi, bakozala lokola pilipili ekoswa bino miso mpe lokola nzube ikozokisa loketo la bino, bango bakotu­ngisa bino o mokili esika bokofanda.
Numb LinVB 33:56  Mpe ngai nakosala na bino lokola nakanaki kosala na bango. »
Chapter 34
Numb LinVB 34:2  « Loba na bana ba Israel : Ekoyi­ngela bino o mokili mwa Kanana, ndelo ya mokili nakokabela bino ikozala ndelo ya Kanana, yango iye :
Numb LinVB 34:3  O Sudi ekolo ya bino ebanda o eliki ya Sin, eye ezali ndelo ya Edom. Ndelo eye ekobanda epai ya Esti pene na mbu ya Mongwa.
Numb LinVB 34:4  Nsima ndelo ekende o Sudi ya ngomba Akrabim, eleka o Sin mpo ya kosuka o Sudi ya Kades-Barne. Na nsima ekende epai ya Asar-Adar mpe eleka o Asmon.
Numb LinVB 34:5  Longwa Asmon ndelo ekende epai ya mongala mwa Ezipeti mpo esuka o mbu.
Numb LinVB 34:6  Epai ya Westi, ndelo ya mokili ezala mbu enene.
Numb LinVB 34:7  Ndelo o Nordi, ya­ngo eye : Longwa mbu enene eken­de nzela semba tee ngomba Kor.
Numb LinVB 34:8  Longwa ngomba Kor eleka nzela semba tee Amat mpo esuka o Sedad.
Numb LinVB 34:9  Eleka epai ya Zifron mpe esuka o Kasar-Enan : ndelo ya mokili mwa bino epai ya Nordi.
Numb LinVB 34:10  Nsima ndelo epai ya Esti ebanda o Kasar-Enan tee Sefam.
Numb LinVB 34:11  Ndelo ebanda o Sefam tee Arbel epai ya Esti ya Ayin. Ekita kuna lisusu mpo eleka epai ya Esti ya ngambo ya etima ya Kineret.
Numb LinVB 34:12  Ndelo elanda mongala Yordane mpo esuka o Mbu ya Mongwa : Mokili mwa bino na ndelo ya bikolo bikozinga mwango. »
Numb LinVB 34:13  Moze apesi bana ba Israel etinda eye : « Tala mokili bino bokokabola na bobeti zeke. Yawe atindi ’te topesa mwango na mabota libwa na mpe ndambo ya libota lisusu,
Numb LinVB 34:14  zambi bana na bandeko ba mabota ma Ruben mpe ma Gad basili kozwa eteni ya bango ; ndambo ya libota lya Manase mpe basili kozwa eteni ya bango.
Numb LinVB 34:15  Mabota mana mabale na ndambo ya libota lisusu basili kozwa eteni ya ba­ngo o ngambo ya Yordane, epai ya Yeriko, kuna o Esti. »
Numb LinVB 34:17  « Tala nkombo ya bato bakokabola mokili : Nganga Nzambe Eleazar na Yozue, mwana wa Nun.
Numb LinVB 34:18  Bopono mpe nkumu moko o libota lyoko lyoko mpo ya kokabola mokili.
Numb LinVB 34:19  Nkombo ya bango, yango iye : O libota lya Yuda, Kaleb mwana wa Yefune ;
Numb LinVB 34:20  o libota lya bana ba Simeon : Semuel, mwana wa Amiud ;
Numb LinVB 34:21  o libota lya Benyamin : Elidad, mwana wa Kislon ;
Numb LinVB 34:22  o libota lya Dan : nkumu Buki, mwana wa Yogli ;
Numb LinVB 34:23  o kati ya bana ba Yozefu : o libota lya Manase : nkumu Kaniel, mwana wa Efod ;
Numb LinVB 34:24  o libota lya bana ba Efraim : nkumu Kemuel, mwana wa Siftan ;
Numb LinVB 34:25  o libota lya bana ba Zabulon : nkumu Elisafan, mwana wa Parnak ;
Numb LinVB 34:26  o libota lya bana na Isakar : nkumu Paltiel, mwana wa Azan ;
Numb LinVB 34:27  o libota lya bana ba Aser : nkumu Akiud, mwana wa Selomi ;
Numb LinVB 34:28  o libota lya bana ba Neftali : nkumu Pedael, mwana wa Amiud. »
Numb LinVB 34:29  Yawe moto ati­ndaki bango ’te bakabola bana ba Israel mabelé o mokili mwa Kanana.
Chapter 35
Numb LinVB 35:1  O Bisobe bya Moab, penepene na Yordane, epai ya Yeriko Yawe alobi na Moze maloba maye :
Numb LinVB 35:2  « Tinda bana ba Israel ’te bapesa ba-Levi ndambo ya mabelé esika bafandi mpo ’te batonga mboka ya kofanda, bazwa mpe bilanga mpo ya koleisa bibwele bya bango. Bapesa yango na ba-Levi.
Numb LinVB 35:3  Bafanda bongo o mboka ya bango mpe bazala na mabelé zongazonga na mboka mpo ya biloko bya bango mpe mpo ya koleisa bibwele bya bango.
Numb LinVB 35:4  Mabelé mana okopesa bango, mabanda na lopango la mboka mpe makende tee na maboko nkoto yoko zongazonga na mboka.
Numb LinVB 35:5  O libanda lya mboka, epai ya Esti, meka maboko nkoto ibale ; epai ya Sudi meka maboko nkoto ibale, epai ya Westi meka maboko nkoto ibale, epai ya Nordi meka maboko nkoto ibale : mboka ezala o katikati ; o mabelé mana bakoki kobokolo bi­bwele bya bango.
Numb LinVB 35:6  Pesa ba-Levi mboka motoba esika bato bakoki kozwa libiki ; okopono mboka ina mpo ’te soko moto abomi moninga, akoka kokima kuna. Bakisa naino mboka ntuku inei na ibale isusu.
Numb LinVB 35:7  Pesa bo­ngo ba-Levi mboka ntuku inei na mwambi na mpe bisobe bisali mpembeni.
Numb LinVB 35:8  Bana ba Israel bazwaki mabelé mingi, bapesa mpe mboka mingi ; baye bazwi mingi te, bapesa mboka mingi te. Moto na moto atikela ba-Levi eteni ya mboka engebene na motindo bakaboleli ye mabelé. »
Numb LinVB 35:10  « Loba na bana ba Israel : Mokolo bosili kokatisa Yordane mpo ’te bokoma o mokili mwa Kanana,
Numb LinVB 35:11  bokopono mboka esika bato bakoki kozwa libiki. Moto abomi moninga, kasi na nko te, akoki kokima kuna.
Numb LinVB 35:12  Mboka ina ikosalisa bino mpo ya kobombama, soko ndeko wa mowei aluki koboma bino. Se bongo moto abomi moninga akoki kobika soko bakati naino likambo lina te o miso ma bato ba lisanga mobimba.
Numb LinVB 35:13  Bopesa bongo mboka motoba mpo bato bakoka kozwa libiki :
Numb LinVB 35:14  mboka isato o ngambo ya Yordane, mboka isato o mokili mwa Kanana. Yango isala mboka esika bato bakoki kozwa libiki.
Numb LinVB 35:15  Mboka inso motoba ya kozwa libiki ikosalisa bana ba Israel, bauta ná bampaya lokola. Moto abomi moni-nga, kasi na nko te, akoki kokima kuna.
Numb LinVB 35:16  Kasi soko moto abeti moninga na ebende, azali mobomi solo, baboma ye.
Numb LinVB 35:17  Soko abwakeli moninga libanga likoki koboma mpe abomi ye, azali mobomi, baboma ye.
Numb LinVB 35:18  To soko abeti ye na esaleli ya nzete ekoki koboma moto, mpe abomi ye, baboma ye mpe.
Numb LinVB 35:19  Ndeko wa mowei oyo akoki kozongisela ye mabe, aboma mobomi ; akoki koboma ye o mokolo akokutana na ye.
Numb LinVB 35:20  Soko moto atuti moninga na nka­nda to soko abwakeli ye eloko ekoki koboma ye,
Numb LinVB 35:21  to soko mpo ya bonguna abeti ye makasi mpe moto oyo akufi, baboma ye. Ndeko wa mowei akoki koboma ye o mokolo akokutana na ye.
Numb LinVB 35:22  Kasi soko atuti moninga na nko te, na nkanda o motema te, to soko abwaki eloko ekoki koboma, kasi na ntina mpenza ya kozokisa moto te,
Numb LinVB 35:23  to soko abwaki libanga o likolo mpe amoni moto te, kasi liba­nga likwei mpe libomi moto, mpo azalaki na nkanda o motema te mpe alingaki kosala moto mabe te,
Numb LinVB 35:24  bato ba lisanga mobimba basengeli kokata likambo kati ya moto abomi mpe ndeko wa mowei : balanda se mibeko miye.
Numb LinVB 35:25  Bango babikisa bongo mobomi o maboko ma moto akoki kozongisela ye mabe. Bazongisa ye o mboka eye ya kozwa libiki, esika akimaki, bongo atikala kuna tee liwa lya nga­nga Nzambe monene oyo bapakolaki mafuta masantu.
Numb LinVB 35:26  Kasi soko mobomi abimi o mboka esika azwi libiki,
Numb LinVB 35:27  mpe ndeko wa mowei, oyo akoki kozongisela ye mabe, akutani na ye o libanda lya mboka eye bakozwaka libiki, moto oyo akoki koboma ye, mpe amemi ngambo te,
Numb LinVB 35:28  zambi mobomi asengeli kotikala o mboka ya kozwa libiki tee liwa lya nganga Nzambe monene. Bobele nsima ya liwa lya nganga Nzambe monene akoki kozonga o mboka to o mokili mwa ye.
Numb LinVB 35:29  Tala mobeko mwa bosembo napesi bino na mpe mabota ma bino o bisika bi­nso bokokende kofanda.
Numb LinVB 35:30  O likambo lya koboma moto, bakoki koboma mobomi bobele soko banzeneneke bazalaki ; kasi soko se moto moko afundi, bakoki koboma ye te.
Numb LinVB 35:31  Soko bakitisi mobomi o liwa, bandeko ba ye bakoki kofuta mosolo mpo ya kosikola ye te, mpo moto oyo akoki na liwa.
Numb LinVB 35:32  Bofuta mpe te mpo ya kosikola moto oyo akimaki o mboka ya kozwa libiki, mpe alingi sikawa kozonga mpo ’te afanda o mokili mwa ye moko liboso lya liwa lya nganga Nzambe monene.
Numb LinVB 35:33  Bosantola mokili mwa bino te. Makila masopami makosantola mokili. Bakoki kosilisa likambo lya bobomi bobele soko babomi moto oyo abomaki moninga.
Numb LinVB 35:34  Mokili esika bofandi mpe esika nakozala, bokomisa mwango mbindo te, zambi ngai Yawe nafandi o ntei ya bana ba Israel. »
Chapter 36
Numb LinVB 36:1  Bakonzi ba etuka ya baGalaad, mwana wa Makir, nkoko wa Manase, wa libota lya Yozefu, bayei epai ya Moze mpe balobi o miso ma bankumu, bayangeli ba mabota ma Israel, maloba maye :
Numb LinVB 36:2  « Yawe atindaki yo ’te opesa bana ba Israel mokili, mpe okabola mwa­ngo lokola zeke elakisi ; mpe Yawe apesaki yo etinda ’te okabola mabelé ma ndeko wa biso Selofead na bana basi ba ye.
Numb LinVB 36:3  Soko babali bango na babali ba libota lisusu lya Israel, eteni ya bango ekolongwa o mabelé ma bankoko ba biso. Bongo eteni ya libota esika bakomi sikawa ekokola, mpe eteni eye tozwaki na bobeti zeke ekokutwa.
Numb LinVB 36:4  Ekomi mobu mwa Lisabwi mwa bana ba Israel, eteni ya basi bana ekokitana na libota lya ba­ngo lya sika, mpe ekolongwa o libota lya batata ba biso. »
Numb LinVB 36:5  Moze apesi bana ba Israel mobeko moye lokola Yawe atindaki ye. Alobi : « Bato ba libota lya Yozefu balobi malamu.
Numb LinVB 36:6  Boyoka makambo Yawe atindi mpo ya bana basi ba Selofead. Bakoki kobala mobali oyo bango moko balingi, kasi babala bobele babali ba etuka ya bango.
Numb LinVB 36:7  Mabelé ma bato ba Israel makoki kokitana na libota lisusu te. Libota lyoko lyoko lya bana ba Israel litikala na eteni ya mabelé ma bankoko ba bango.
Numb LinVB 36:8  Elenge mwasi nyonso azwi mabel, o libota lyoko lya Israel, basengeli kobala ye na mobali wa etuka ya libota lya tata wa ye, bongo bana ba Israel banso batikala na eteni ya mabelé etikelaki bango tata.
Numb LinVB 36:9  Eteni ya mabelé ekitana na libota lisusu te. O Israel libota lyoko lyoko litikala na mabel, ma lya­ngo. »
Numb LinVB 36:10  Bana basi ba Selofead basali lokola Yawe atindaki Moze.
Numb LinVB 36:11  Mala, Tirsa, Ogla, Milka na Noa, bana basi ba Selofead bandimi ’te bana ba libota epai ya botata babala bango.
Numb LinVB 36:12  Awa babali mobali o libota lya bana ba Manase, mwana wa Yozefu, eteni ya mabel, ezwaki bango etikali ya libota lya tata wa bango.
Numb LinVB 36:13  Tala bitinda mpe mibeko Yawe atindaki bana ba Israel na monoko mwa Moze, o Bisobe bya Moab, penepene na Yordane, epai ya Yeriko.