GENESIS
Up
Chapter 1
Gene | LinVB | 1:2 | Nse ezalaka se mpamba, eloko yoko ezalaka wana te. Molili mozalaka bipai binso mpe mpema ya Nzambe ezalaka koleka likolo lya mai lokola mompepe. | |
Gene | LinVB | 1:5 | Nzambe apesi mwinda nkombo moi, apesi molili nkombo butu. Mpokwa eyindi, ntongo etani : ezalaki mokolo mwa yambo. | |
Gene | LinVB | 1:6 | Nzambe alobi : « Etando ezala, ekabola mai mazali o likolo na mai mazali o nse » ; esalemi se bongo. | |
Gene | LinVB | 1:8 | Nzambe apesi etando nkombo likolo. Mpokwa eyindi, ntongo etani : ezalaki mokolo mwa mibale. | |
Gene | LinVB | 1:9 | Nzambe alobi : « Mai manso mazali o nse ya etando masangana esika yoko mpe mabelé mabima » ; esalemi se bongo. | |
Gene | LinVB | 1:10 | Nzambe apesi mabelé nkombo mokili, mpe mai masangani esika yoko, apesi mango nkombo mbu ; mpe Nzambe amoni ’te ezalaki malamu. | |
Gene | LinVB | 1:11 | Nzambe alobi : « Mokili mobota matiti, ndunda ekobotaka mboto na nzete ya mbuma ndenge na ndenge ; yoko yoko ebota mbuma ya yango na mboto ya yango o kati » ; esalemi se bongo. | |
Gene | LinVB | 1:12 | Mokili moboti matiti, ndunda ya ndenge inso izali na mboto ya yango, na nzete ndenge na ndenge ; yoko yoko ekobota mbuma izali na mboto ya yango o kati,mpeNzambeamoni ’teezalakimalamu. | |
Gene | LinVB | 1:14 | Nzambe alobi : « Miinda mizala o etando ya likolo mpo ya kokabola moi na butu, mpo ya kolakisa biyenga, mikolo na mibu ; | |
Gene | LinVB | 1:16 | Nzambe akeli miinda minene mibale, mwinda moleki bonene mpo ya kongenge na moi, mpe mwinda mosusu mpo ya kongenge na butu ; akeli mpe minzoto. | |
Gene | LinVB | 1:18 | mpo ya koyangela moi na butu, mpo ya kokabola mwinda na molili. Mpe Nzambe amoni ’te ezalaki malamu. | |
Gene | LinVB | 1:20 | Nzambe alobi : « Mai matonda na mbisi ndenge na ndenge mpe ndeke ipimbwa likolo lya mokili tee o etando. » | |
Gene | LinVB | 1:21 | Nzambe akeli bibuki bya mbisi mpe bikelamo ndenge na ndenge bikotambolaka o mai. Akeli mpe ndeke ndenge na ndenge ; mpe Nzambe amoni ’te ezalaki malamu. | |
Gene | LinVB | 1:22 | Nzambe abenisi byango, alobi : « Bobota mpe bokoma mingi ; mai matonda na mbisi, mokilimotondanandeke. » | |
Gene | LinVB | 1:24 | Nzambe alobi : « Mokili mobimisa bikelamo bizali na bomoi, bizala ndenge na ndenge, nyama inene mpe ike, na nyama ya zamba ndenge na ndenge » ; mpe esalemi se bongo. | |
Gene | LinVB | 1:25 | Nzambe akeli nyama ya zamba mpe nyama ya mboka ndenge na ndenge mpe nyama ikolandaka o mabelé ; Nzambe amoni ’te ezalaki malamu. | |
Gene | LinVB | 1:26 | Nzambe alobi : « Tokela moto azala lokola elili ya biso, aulana na biso ; bato bayangela mbisi ya mbu, ndeke ya likolo, nyama inso ya zamba mpe nyama inso ikolandaka o mabelé. » | |
Gene | LinVB | 1:27 | Mpe Nzambe akeli moto lokola elili ya ye, akeli ye lokola ye moko Nzambe azali, akeli bango mobali na mwasi. | |
Gene | LinVB | 1:28 | Nzambe abenisi bango, alobi : « Bobota mpe bokoma mingi ; botondisa mokili mpe bobongisa mwango. Boyangela mbisi ya mbu, ndeke ya likolo mpe nyama inso ikolandaka o mabelé. » | |
Gene | LinVB | 1:29 | Nzambe abakisi : « Nakopesa bino ndunda inso izali na mboto, na mpe nzete inso ya nse mobimba ikobotaka mbuma izali na mboto : ikozala bilei bya bino. | |
Gene | LinVB | 1:30 | Nde matiti manso nakopesa mango na nyama ya zamba, na ndeke ya likolo, binso biye bikolandaka o mabelé mpe bizali na bomoi : mazala bilei bya byango » ; mpe esalemi se bongo. | |
Chapter 2
Gene | LinVB | 2:2 | O mokolo mwa nsambo Nzambe asukisi mosala mwa ye. O mokolo mwa nsambo, awa asilisi mosala mwa ye, apemi. | |
Gene | LinVB | 2:3 | Nzambe abenisi mokolo mwa nsambo mpe asantisi mwango, mpo o mokolo mona asilisaki mosala monso mpe apemaki. | |
Gene | LinVB | 2:4 | Ezalaki libandela lya likolo na nse, ntango Nzambe akeli byango. O ntango Yawe Nzambe akeli likolo na nse, | |
Gene | LinVB | 2:5 | nzete yoko ebimi naino te, lititi lyoko mpe te, zambi Yawe Nzambe anokisaka mbula o mokili naino te mpe moto azalaki wana te mpo ’te akata bilanga. | |
Gene | LinVB | 2:7 | Yawe Nzambe akamati mabelé mpe asali moto ; apemeli ye mpema ya bomoi o zolo mpe moto azwi bomoi. | |
Gene | LinVB | 2:8 | Na nsima Yawe Nzambe abo-ngisi elanga o esobe ya Eden epai moi mokobimaka, mpe kuna atii moto oyo ye akeli. | |
Gene | LinVB | 2:9 | Yawe Nzambe abimisi nzete kitoko o mabelé ma elanga, iye ikobota mbuma elengi ; o kati ya elanga aloni nzete ya bomoi na mpe nzete eye ekoyebisa nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. | |
Gene | LinVB | 2:11 | Nkombo ya moluka moko Pison, mokokatisa mokili mobimba mwa Avila. Avila ezali ekolo eye esika bakozwaka wolo, | |
Gene | LinVB | 2:12 | wolo kitoko mpenza, mpaka ya malasi ekozwama mpe wana, na mabanga ma motuya, maye bakotangaka onikse. | |
Gene | LinVB | 2:17 | kasi mbuma ya nzete eye ekoyebisa nini ezali malamu mpe nini ezali mabe, okoki kolia yango te ; mpamba te, mokolo okolia mbuma ena, okokufa. » | |
Gene | LinVB | 2:18 | Yawe Nzambe alobi : « Ebongi te ’te moto azala ye moko ; malamu napesa ye moninga oyo akoki na ye, asalisa ye. » | |
Gene | LinVB | 2:19 | Yawe Nzambe akamati lisusu mabelé, asali na mango nyama inso ya nse na ndeke ya likolo ; alakisi yango na moto, ayeba nkombo nini akopesa yango : nyama yoko yoko ezala na nko-mbo eye moto akopesa. | |
Gene | LinVB | 2:20 | Moto apesi nyama inso nkombo, na ndeke ya likolo na nyama ya zamba ; naino azwi moninga te oyo akoki na ye. | |
Gene | LinVB | 2:21 | Na nsima Yawe Nzambe alalisi moto mpongi makasi ; alongoli ye monkuwa moko o mopanzi mpe akangisi mosuni o esika yango. | |
Gene | LinVB | 2:22 | Na monkuwa alongolaki o mopanzi mwa moto, Yawe Nzambe akeli mwasi mpe ayei na ye o miso ma mobali. | |
Gene | LinVB | 2:23 | Mobali agangi : « Solo, tala monkuwa mwa minkuwa mya ngai mpe mosuni mwa misuni mya ngai, akozala na nkombo mwasi, mpo babimisi ye o nzoto ya mobali. » | |
Gene | LinVB | 2:24 | Yango wana mobali akotika tata na mama mpe akosangana na mwasi wa ye mpe bango babale bakokoma moto se moko. | |
Chapter 3
Gene | LinVB | 3:1 | O kati ya nyama inso ya zamba Yawe Nzambe asalaki, nyoka eleki mayele mabe. Nyoka alobi na mwasi : « Ya solo, Nzambe apekisi bino kolia mbuma ya nzete inso ya elanga ? » | |
Gene | LinVB | 3:3 | kasi mpo ya mbuma ya nzete eye ezali o kati ya elanga Nzambe alobaki : Bokoki kolia mbuma ya nzete ena te ; soko bosimbi yango bokokufa. » | |
Gene | LinVB | 3:5 | Nzambe ayebi ’te mokolo bokolia mbuma ya nzete ena, miso ma bino makofungwana, bokokoma lokola Nzambe, bokoyeba nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. » | |
Gene | LinVB | 3:6 | Mwasi amoni ’te nzete ezali kitoko mpe mbuma elengi, alingi mpe koyeba nini ezali malamu mpe nini ezali mabe ; abuki mbuma, alei yango. Na nsima apesi mpe mobali wa ye azalaki na ye ; ye mpe alei. | |
Gene | LinVB | 3:7 | Tala, miso ma bango mafungwani mpe bamoni ’te bazalaki bolumbu ; na nkasa ya nzete ya figi batongi bilamba mpe balati byango. | |
Gene | LinVB | 3:8 | Na mpokwa, ntango mompepe mwa mpio moyei, bayoki ’te Yawe Nzambe ayei kotambola o elanga ; mobali na mwasi bakei kobombama nsima ya nzete ya elanga. | |
Gene | LinVB | 3:10 | Mobali ayanoli : « Nayokaki yo ntango oyingelaki o elanga ; yango wana nakei kobo-mbama, mpo nazali bolumbu. » | |
Gene | LinVB | 3:11 | Yawe Nzambe atuni lisusu : « Nani moto alakisi yo ’te ozali bolumbu ? Oliaki nde mbuma ya nzete eye napekisaki yo olia yango te ? » | |
Gene | LinVB | 3:12 | Mobali ayanoli : « Mwasi oyo opesaki ngai akabeli ngai mbuma ya nzete ena mpe nalei. » | |
Gene | LinVB | 3:13 | Yawe Nzambe atuni mwasi : « Osali nini ? » Mwasi azongisi : « Nyoka ekosaki ngai mpe nalei. » | |
Gene | LinVB | 3:14 | Sikawa Yawe Nzambe alobi na nyoka : « Mpo ya maye osalaki, okozala nyama eleki mabe o kati ya nyama inso ya mboka mpe ya zamba. Okolanda o libumu mpe okolia mabelé bomoi bwa yo mobimba. | |
Gene | LinVB | 3:15 | Nakotia bonguna kati ya yo na mwasi, kati ya libota lya yo na libota lya ye : bana ba ye bakonyata yo o motó, mpe yo okozwa ye o litindi. » | |
Gene | LinVB | 3:16 | Mpe Yawe Nzambe alobi na mwasi : « Nakobakisela yo mpasi o ntango okozala na zemi mpe o ntango ya kobota. Mposa ya nzoto ekotinda yo epai ya mobali wa yo, mpe ye akozala mokonzi wa yo. » | |
Gene | LinVB | 3:17 | Mpe alobi na mobali : « Awa ondimi maloba ma mwasi mpe olei mbuma ya nzete eye napekisaki yo olia yango te, mabe makwela mabelé mpo ya yo. O bomoi bwa yo mobimba okoyoka mpasi mpo ya kozwa bilei. | |
Gene | LinVB | 3:19 | Okotoko mpo ya mosala mwa koluka bilei kin’o mokolo okozonga o mabelé esika outaki, mpo ozali se mabelé mpe okozonga o mabelé. » | |
Gene | LinVB | 3:22 | Na nsima Yawe Nzambe alobi : « Moto akomi lokola biso, mpo akomi koyeba nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. Mbele akotanda loboko mpo ya kobuka mbuma ya nzete ya bomoi ; mpe soko alei yango, akozala na bomoi seko. » | |
Gene | LinVB | 3:23 | Bongo Yawe Nzambe abengani moto o elanga ya Eden, akende kokata bilanga, o mabelé maye autaki. | |
Chapter 4
Gene | LinVB | 4:1 | Mobali ayebani na mwasi wa ye Eva, oyo azwi zemi, aboti Kain mpe alobi : « Naboti mwana mobali mpo ya bolamu bwa Yawe. » | |
Gene | LinVB | 4:2 | Na nsima aboti Abel, ndeko wa Kain. Abel akomi mokengeli wa mpata, Kain moto wa bilanga. | |
Gene | LinVB | 4:4 | Abel abonzi mpata ya etonga ya ye, bana mpata ba yambo ba mafuta. Yawe andimeli Abel, mpe ayambi libonza lya ye. | |
Gene | LinVB | 4:7 | Soko ozali motema malamu, okolonga. Kasi soko osali malamu te, lisumu likonongo mpo ya kokanga yo ; sala makasi mpo ’te olonga lyango. » | |
Gene | LinVB | 4:8 | Kain alobi na ndeko wa ye Abel : « Tokende kotambola. » Awa bakomi o bilanga, Kain akangi ndeko wa ye Abel mpe abomi ye. | |
Gene | LinVB | 4:9 | Yawe alobi na Kain : « Wapi ndeko wa yo Abel ? » Kain ayanoli : « Nayebi te. Ngai nde mokengeli wa ndeko wa ngai ? » | |
Gene | LinVB | 4:10 | Yawe alobi lisusu : « Osali nini ? Makila ma ndeko wa yo mazali kobelela ngai ut’o mabelé ! | |
Gene | LinVB | 4:11 | Sikawa mabe makokwela yo, nakobengana yo o mabelé maye mameli makila ma ndeko wa yo, mpo osopi mango. | |
Gene | LinVB | 4:12 | Bilanga okokata bikobota mbuma ilamu lisusu te. Okozanga mboka mpe okotelengana o mokili. » | |
Gene | LinVB | 4:14 | Obengani ngai o mabelé malamu, nakokoka komono yo lisusu te. Nakokoma moto azangi mboka, nakotelengana o mokili. Ata nani akokutana na ngai akoki koboma ngai ! » | |
Gene | LinVB | 4:15 | Yawe azongisi : « Ezali bongo te ! Oyo akoboma yo, bakozongisela ye yango mbala nsambo. » Mpe Yawe atieli Kain elembo mpo ’te moto moko aboma ye te. | |
Gene | LinVB | 4:17 | Kain ayebani na mwasi wa ye, oyo azwi zemi, aboti Enok. Awa atongi mboka, apesi yango nko-mbo ya mwana wa ye Enok. | |
Gene | LinVB | 4:20 | Ada aboti Yabal, Yabal azali nkoko wa bato bakofandaka o biema mpe bakobokoloko bibwele. | |
Gene | LinVB | 4:22 | Sila mpe aboti mwana mobali Tubal-Kain ; ye moto abandi kotula mbeli ya mbengi mpe ya bibende. Nama azalaki ndeko mwasi wa Tubal-Kain. | |
Gene | LinVB | 4:23 | Lamek alobi na basi ba ye : « Ada na Sila, apoka monoko mwa ngai. Basi ba Lamek, botia matoi na maloba ma ngai : nabomi moto zambi azokisaki ngai, nabomaki mwana wa bato zambi abeteki ngai. | |
Gene | LinVB | 4:24 | Moto akosala Kain mabe, bakozongisela ye mabe mbala nsambo ; kasi moto akosala ngai mabe, nakozongisela ye mabe mbala ntuku nsambo na nsambo ! » | |
Gene | LinVB | 4:25 | Adamu ayebani lisusu na mwasi wa ye ; mwasi aboti mwana mobali, apesi ye nkombo Set, zambi alobi : « Nzambe apesi ngai mwana mosusu o esika ya Abel, oyo Kain abomaki. » | |
Chapter 5
Gene | LinVB | 5:1 | Monkanda mwa nkombo ya bankoko ba Adamu : Mokolo Nzambe akeli moto, akeli ye lokola ye moko Nzambe azali. | |
Gene | LinVB | 5:2 | O mokolomei akeli bango mobali na mwasi, abenisi bango mpe apesi bango nkombo « BATO ». | |
Gene | LinVB | 5:3 | Ekokisi Adamu mibu monkama na ntuku isato, aboti mwana mobali, aulani na ye mpe azali lokola elili ya ye, apesi ye nkombo Set. | |
Gene | LinVB | 5:4 | Nsima ya mbotama ya Set, Adamu aumeli na bomoi mibu nkama mwambe mpe aboti bana babali na bana basi. | |
Gene | LinVB | 5:7 | Nsima ya mbotama ya Enok, Set aumeli na bomoi mibu nkama mwambe na nsambo mpe aboti bana babali na basi. | |
Gene | LinVB | 5:10 | Nsima ya mbotama ya Kenan, Enos aumeli na bomoi mibu nkama mwambe na zomi na mitano mpe aboti bana babali na bana basi. | |
Gene | LinVB | 5:13 | Nsima ya mbotama ya Malalel, Kenan aumeli na bomoi mibu nkama mwambe na ntuku inei mpe aboti bana babali na bana basi. | |
Gene | LinVB | 5:16 | Nsima ya mbotama ya Yered, Malalel aumeli na bomoi mibu nkama mwambe na ntuku isato mpe aboti bana babali na bana basi. | |
Gene | LinVB | 5:19 | Nsima ya mbotama ya Enok, Yered aumeli na bomoi mibu nkama mwambe mpe aboti bana babali na bana basi. | |
Gene | LinVB | 5:22 | Enok atamboli na Nzambe nzela yoko. Nsima ya mbotama ya Matuzalem, Enok aumeli na bomoi mibu nkama isato mpe aboti bana babali na bana basi. | |
Gene | LinVB | 5:26 | Nsima ya mbotama ya Lamek, Matuzalem aumeli na bomoi mibu nkama nsambo na ntuku mwambe na mibale mpe aboti bana babali na bana basi. | |
Gene | LinVB | 5:27 | Matuzalem aumeli na bomoi mibu nkama libwa na ntuku motoba na libwa ; na nsima awei. | |
Gene | LinVB | 5:29 | Apesi ye nkombo Nowe, zambi alobi : « Oyo akosilisa mawa ma biso o ntango tokosala misala mpe tokoyoka mpasi o mokili moye Yawe atombeli bobe. » | |
Gene | LinVB | 5:30 | Nsima ya mbotama ya Nowe, Lamek aumeli na bomoi mibu nkama itano na ntuku libwa na mitano mpe aboti bana babali na bana basi. | |
Chapter 6
Gene | LinVB | 6:2 | Bana ba Nzambe bamoni ’te bana basi ba bato bazalaki kitoko, bongo baponi basi o kati ya bango mpo babala bango. | |
Gene | LinVB | 6:3 | Yawe alobi : « Elimo ya ngai ekoki kotikala seko epai ya bato te, mpo moto azali se mosuni, akoumela o mokili bobele mibu monkama na ntuku ibale. » | |
Gene | LinVB | 6:4 | Bato balai bazalaki o mokili o mikolo mina mpe o mikolo mya nsima, ntango bana babali ba Nzambe bakei koluka bana basi mpe baboteli bango bana. Bango bazalaki bilombe ba kala, bayebani mingi. | |
Gene | LinVB | 6:5 | Yawe amoni ’te bato bapusi kosala mabe, bazalaki kokanisa bobele makambo mabe o motema mokolo na mokolo. | |
Gene | LinVB | 6:7 | Yawe alobi : « Bato baye nakelaki, nakolongola bango o mokili, elongo na bibwele, na nyama ike na ndeke ya likolo, nayoki mawa zambi nakelaki bango. » | |
Gene | LinVB | 6:9 | Yoka sikawa makambo makwelaki Nowe : Nowe azalaki moto semba, aleki baninga ba ye banso na bosembo, azalaki kolanda se nzela ya Nzambe. | |
Gene | LinVB | 6:13 | Nzambe alobi na Nowe : « Sikawa nakosilisa bato banso, zambi bato batondisi mokili na makambo makasi makasi ; nakolimwisa ba-ngo o mokili. | |
Gene | LinVB | 6:14 | Tonga masuwa na mabaya. Okokabola mango biteni biteni mpe okopakola mango mokobo o kati mpe o libanda. | |
Gene | LinVB | 6:15 | Okosala yango boye : masuwa mazala na bolai maboko nkama isato, na bonene maboko ntuku itano, na bozindo maboko ntuku isato. | |
Gene | LinVB | 6:16 | O motondo okobakisa bosanda bwa loboko loko. Okosala ezibeli o mopanzi mpe okotonga masuwa ma mikili misato. | |
Gene | LinVB | 6:17 | Nakonokisa mbula makasi, mpe mpela enene o mokili ekoboma bikelamo binso bizali na bomoi : binso bizali o mokili bikokufa. | |
Gene | LinVB | 6:18 | Kasi nakokata na yo bondeko. Okoyingela o masuwa, yo na mwasi wa yo, elongo na bana ba yo mpe na basi ba bango. | |
Gene | LinVB | 6:19 | Ya bikelamo binso bizali na bomoi okotisa mibale mibale o masuwa, mobali na mwasi, mpo ya kobikisa bango. | |
Gene | LinVB | 6:20 | Okokamata mibale ya ndenge inso ya ndeke, nyama inene na nyama ike mpo ’te itikala na bomoi. | |
Chapter 7
Gene | LinVB | 7:1 | Yawe alobi na Nowe : « Koto o masuwa, yo na libota lya yo mobimba, zambi namoni ’te o kati ya mabota manso bobele yo moko otikali moto semba o miso ma ngai. | |
Gene | LinVB | 7:2 | Kamata babali nsambo na basi nsambo ya nyama inso izali na mbindo te ; ya nyama mbindo inso kamata nyama ibale, mobali moko na mwasi moko. | |
Gene | LinVB | 7:3 | Se bongo na ndeke ya likolo, kamata babali nsambo na basi nsambo, mpo tobikisa ndenge ya nyama inso o nse mobimba. | |
Gene | LinVB | 7:4 | Mpamba te, nsima ya mikolo nsambo nakonokisa mbula o mokili mikolo ntuku inei, butu moi. Nakolongola o mokili bikelamo binso nakelaki. » | |
Gene | LinVB | 7:6 | O ntango ya mpela enene, ntango mokili mozalaki kozinda na mai ma mbula, Nowe akokisi mibu nkama motoba. | |
Gene | LinVB | 7:7 | Nowe akoti o masuwa elongo na bana ba ye na mwasi wa ye na basi ba bana ba ye mpo ’te babika na mpela. | |
Gene | LinVB | 7:8 | Ndenge inso ya nyama ikoti na ye o masuwa : nyama mbindo na nyama mbindo te, ndeke na nyama ikolandaka o libumu. | |
Gene | LinVB | 7:11 | Ekokisi Nowe mibu nkama motoba, o sanza ya ibale, o mokolo mwa zomi na nsambo, maziba manso ma mbu na mpe mampata manso ma likolo mabandi kotangisa mai. | |
Gene | LinVB | 7:13 | Bobele o mokolo mona Nowe na bana ba ye Sem, Kam na Yafet, na mwasi wa Nowe, na basi ba bana ba ye bakoti o masuwa. | |
Gene | LinVB | 7:14 | Elongo na bango ikoti mpe ndenge inso ya nyama ya zamba, nyama ya mboka na nyama ikolandaka o libumu na ndeke inso izali na mapapu. | |
Gene | LinVB | 7:15 | Ezalaki bongo nyama ibale ibale ya lolenge loko loko, inso izali na mpema ya bomoi, ikoti o masuwa na Nowe elongo. | |
Gene | LinVB | 7:16 | Nowe akamati mobali moko na mwasi moko ya nyama inso, lokola Nzambe atindaki ye ; mpe Yawe akangi ezibeli ya masuwa. | |
Gene | LinVB | 7:17 | Mbula makasi enoki o mokili mikolo ntuku inei ; mai mabuti mpe matomboli masuwa likolo lya mokili. | |
Gene | LinVB | 7:21 | Bongo, bikelamo binso bizalaki o mokili bikufi : na ndeke, na bibwele, na nyama ya zamba, na nyama ike inso na bato lokola. | |
Gene | LinVB | 7:23 | Bongo bikelamo binso bya mokili bilimwi ; bato na nyama, nyama ike na ndeke ya likolo, binso bilimwi o mokili ; etikali se Nowe na biye binso bizalaki na ye o masuwa. | |
Chapter 8
Gene | LinVB | 8:1 | Nzambe akanisi Nowe na nya ma ya zamba inso, na nyama ike inso izalaki na ye o masuwa. Nzambe atindi mompepe o mokili mpe mai mabendani. | |
Gene | LinVB | 8:5 | Mai mazalaki se kokita tee sanza ya zomi, mpe o mokolo mwa yambo mwa sanza nsonge ya ngomba ibimi likolo lya mai. | |
Gene | LinVB | 8:7 | abimisi yanganga ; yanganga ezalaki kobima mpe kozonga tee mai manso makauki o mokili. | |
Gene | LinVB | 8:9 | Awa ebenga emoni esika ya kotia makolo te, ezongi epai ya Nowe o masuwa, zambi mai matondi naino o mokili mobimba. Nowe abimisi loboko, akangi ebenga, akotisi yango epai ya ye o masuwa. | |
Gene | LinVB | 8:11 | Na mpokwa ebenga ezongeli ye na lokasa lobesu la oliva o monoko. Nowe ayebi bongo ’te mai manso o mokili makiti. | |
Gene | LinVB | 8:13 | Ekokisi Nowe mibu nkama motoba na moko, o sanza ya yambo, mokolo mwa yambo mwa sanza mai mabendani o mokili. Nowe afungoli motondo mwa masuwa, atali mpe amoni ’te mokili mosili mokauki. | |
Gene | LinVB | 8:17 | Bimisa nyama inso izali na yo, binso bizali na misuni, ndeke, nyama ya mboka na nyama ike ikolandaka o mabelé, bimisa yango mpo ikende kobota, ikoma mingi o mokili. » | |
Gene | LinVB | 8:19 | Mpe nyama inso ya zamba, nyama inso ya mboka, na ndeke inso na nyama inso ikolandaka o mabelé, inso ibimi na molongo. | |
Gene | LinVB | 8:20 | Nowe atongi altare mpo ya kokumisa Yawe. Aponi nyama o kati ya nyama inso izali na mbindo te, na mpe ndeke, abonzi yango o altare bo mabonza ma kotumba. | |
Gene | LinVB | 8:21 | Yawe ayoki nsolo mpimbo, amilobeli : « Nakobebisa mokili mpo ya mabe ma bato lisusu te, zambi mitema mya bango mizali mabe ut’o bomwana. Nakoboma bikelamo bya nse mokolo moko lisusu te, lokola nauti kosala. | |
Chapter 9
Gene | LinVB | 9:1 | Nzambe abenisi Nowe na bana ba ye, alobi na bango : « Bobota, bokoma ebele, botondisa mokili. | |
Gene | LinVB | 9:2 | Nyama inso ya mokili, ná ndeke ya likolo ná nyama ike ná mbisi ya mai ikobanga bino : napesi yango inso o maboko ma bino. | |
Gene | LinVB | 9:3 | Nyama inso izali na bomoi mpe ikotambolaka o mokili ikozala bilei bya bino : napesi bino yango inso lokola napesaki bino ndunda na matiti. | |
Gene | LinVB | 9:4 | Nzokande bokolia mosuni te soko makila mazali naino o kati, zambi makila mazali bomoi. | |
Gene | LinVB | 9:5 | Oyo abomi moto, azwi likambo o miso ma ngai ; nyama se bongo, zambi nakotuna banso, ná nyama ná bato, mpo ya likambo lya koboma moninga. | |
Gene | LinVB | 9:10 | mpe na bikelamo binso bizali na bomoi mpe bifandi penepene na bino : ndeke, nyama ya mboka mpe nyama ya zamba, nyama inso ibimi o masuwa, nyama inso ya mokili. | |
Gene | LinVB | 9:11 | Nakokata bondeko na bino : ekelamo yoko ezali na bomoi ekokufa na mpela lisusu te ; mpela ekobebisa mokili lisusu te. » | |
Gene | LinVB | 9:12 | Nzambe alobi lisusu : « Tala elembo ya bondeko nakokata na bino mpe na bikelamo binso bifandi pene na bino, mpe na bato banso bakobotama nsima : | |
Gene | LinVB | 9:15 | nakokanisa bondeko boye nakati na bino mpe na bikelamo binso bizali na bomoi. Mai makokoma lisusu mpela enene te, eye ekoboma bato banso. | |
Gene | LinVB | 9:16 | Ntango monama mokobima o mampata, nakotala mwango mpe nakokundola bondeko bwa seko Nzambe akataki na bikelamo binso mpe na bato banso ba mokili. » | |
Gene | LinVB | 9:17 | Nzambe alobi na Nowe : « Natii elembo eye ya bondeko kati ya ngai mpe ya bikelamo binso bya mokili. » | |
Gene | LinVB | 9:18 | Bana ba Nowe, baye babimaki o masuwa, bango baye : Sem, Kam na Yafet ; Kam azali tata wa Kanana. | |
Gene | LinVB | 9:22 | Kam tata wa Kanana amoni bolumbu bwa tata wa ye mpe akei koyebisa bandeko ba ye o libanda. | |
Gene | LinVB | 9:23 | Kasi Sem na Yafet bakamati monkoto mwa Nowe mpe batii mwango o mapeke ma bango, batamboli na mokongo, bapusani penepene na tata mpe bazipi ye na elamba. Kasi bamoni bolumbu bwa tata wa bango te, zambi bazalaki kotala se epai esusu. | |
Gene | LinVB | 9:27 | Nzambe asala Yafet malamu, afanda o biema bya Sem, mpe Kanana azala moombo wa ye ! » | |
Chapter 10
Gene | LinVB | 10:5 | Bango bakei kopalangana o bisanga binso bya nse. Bango nde bana ba Yafet, bakei kofanda moto na moto o esika ya lokota la ye mpe o ekolo ya libota lya ye. | |
Gene | LinVB | 10:9 | Azalaki mobomi nyama wa mpiko o miso ma Yawe, yango wana bakolobaka : « Moto lokola Nemrod, mobomi nyama wa mpiko o miso ma Yawe. » | |
Gene | LinVB | 10:10 | Bokonzi bwa ye bobandi o Babel, Erek mpe Akad, mboka ina inso izali o mokili mwa Sinear. | |
Gene | LinVB | 10:19 | Ndelo ya ba-Kanana ebandi o Sidoni, eleki o Gerar tee Gaza ; na nsima ekei epai ya Sodoma, Gomora, Adma na Seapim mpe esuki o Lesa. | |
Gene | LinVB | 10:25 | Eber aboti bana babali babale, nkombo ya mwana wa yambo Peleg, mpo o ntango abotamaki mokili mobandi kokabwana, na mpe ndeko wa ye nkombo ’te Yoktan. | |
Chapter 11
Gene | LinVB | 11:2 | Awa bato bakei epai moi mokobimaka, bakuti esika elamu o esobe ya Sinear mpe batongi mboka ya bango kuna. | |
Gene | LinVB | 11:3 | Balobani : « Tosala biliki, totumba yango na móto. » Bongo batongi ndako ya bango na biliki mpe bakangisi biliki na potopoto eindo. | |
Gene | LinVB | 11:4 | Na nsima balobani lisusu : « Totonga mboka enene na mpe linongi lilai likoma kin’o likolo ; bato basusu bakumisa biso mpe topalangana o mokili mobimba te. » | |
Gene | LinVB | 11:6 | Yawe alobi : « Bato banso bazali bobele ekolo yoko, bakoloba lokota se loko. Mosala moye mozali bobele ebandela ya misala minene balingi kosala ; banda lelo makambo manso balingi kosala bakosala mango. | |
Gene | LinVB | 11:9 | Bapesi yango nkombo : Babel, zambi Yawe abulunginyi lokota la bango o esika ena, mpe apanzi bato o mokili mobimba. | |
Gene | LinVB | 11:10 | Libota lya Sem : Ekokisi Sem mibu monkama, aboti Arpaksad, mibu mibale nsima ya mpela. | |
Gene | LinVB | 11:11 | Nsima ya mbotama ya Arpaksad, Sem aumeli na bomoi mibu nkama itano mpe aboti bana babali na bana basi. | |
Gene | LinVB | 11:13 | Nsima ya mbotama ya Sela, Arpaksad aumeli na bomoi mibu nkama inei na misato mpe aboti bana babali na bana basi. | |
Gene | LinVB | 11:15 | Nsima ya mbotama ya Eber, Sela aumeli na bomoi mibu nkama inei na misato mpe aboti bana babali na bana basi. | |
Gene | LinVB | 11:17 | Nsima ya mbotama ya Peleg, Eber aumeli na bomoi mibu nkama inei na ntuku isato mpe aboti bana babali na bana basi. | |
Gene | LinVB | 11:19 | Nsima ya mbotama ya Reyu, Peleg aumeli na bomoi mibu nkama ibale na libwa mpe aboti bana babali na bana basi. | |
Gene | LinVB | 11:21 | Nsima ya mbotama ya Serug, Reyu aumeli na bomoi mibu nkama ibale na nsambo mpe aboti bana babali na bana basi. | |
Gene | LinVB | 11:23 | Nsima ya mbotama ya Nakor, Serug aumeli na bomoi mibu nkama ibale mpe aboti bana babali na bana basi. | |
Gene | LinVB | 11:25 | Nsima ya mbotama ya Tera, Nakor aumeli na bomoi mibu monkama na zomi na libwa mpe aboti bana babali na bana basi. | |
Gene | LinVB | 11:28 | Aran awei o miso ma tata wa ye Tera o mokili babotaki ye, o mboka Ur o mokili mwa ba-Kaldea. | |
Gene | LinVB | 11:29 | Abram na Nakor babali ; nkombo ya mwasi wa Abram : Sarai ; nkombo ya mwasi wa Nakor : Milka, mwana wa Aran, oyo abotaki Milka na Yiska. | |
Gene | LinVB | 11:31 | Tera akamati mwana wa ye Abram, na nkoko wa ye Lot, mwana wa Aran, na mpe bokilo wa ye Sarai, mwasi wa Abram. Abimisi bango o Ur o mokili mwa ba-Kaldea mpo ’te bakoma o mokili mwa Kanana ; kasi ekomi bango o Aran, batikali kofanda kuna. | |
Chapter 12
Gene | LinVB | 12:1 | Mokolo moko Yawe alobi na Abram : « Tika ekolo ya yo, na libota lya yo, na ndako ya tata wa yo, mpe kende o ekolo nakolakisa yo. | |
Gene | LinVB | 12:2 | Nakokomisa yo tata wa bato ebele. Nakobenisa yo mpe nakosala ’te nkombo ya yo ezwa lokumu ; bongo bato bakotanga yango bazwa bobenisi. | |
Gene | LinVB | 12:3 | Nakobenisa baye bakobenisa yo, nakoboya baye bakotombela yo bobe ; bato ba bikolo binso bya mokili bakozwa bobenisi mpo ya yo. » | |
Gene | LinVB | 12:4 | Abram akei lokola Yawe alobaki na ye, mpe Lot akei na ye elongo. Abram akokisi mibu ntuku nsambo na mitano ntango alongwi o ekolo ya ye Aran. | |
Gene | LinVB | 12:5 | Abram akei na mwasi wa ye Sarai, na Lot mwana wa ndeko wa ye, na biloko bya bango binso, na basaleli azwaki o Aran. Bakei mpe batamboli tee bakomi o ekolo Kanana. | |
Gene | LinVB | 12:6 | Abram akatisi ekolo mobimba tee akomi o esika esantu ya Sikem, epai ya nzete ya More. Ba-Kanana bazalaki bankolo ba mokili. | |
Gene | LinVB | 12:7 | Yawe abimeli Abram, alobi na ye : « Nakopesa bana ba yo ekolo eye. » Abram atongi altare mpo ya kokumisa Yawe oyo amilakisaki na ye. | |
Gene | LinVB | 12:8 | Na nsima alongwi wana, akei o ngomba epai ya Esti ya mboka Betel mpe kuna atelemisi ema ya ye, kati ya Betel o Westi mpe ya Ayi o Esti. Kuna atongeli Yawe altare mpe akumisi Yawe. | |
Gene | LinVB | 12:10 | Nzala makasi ekweli ekolo mpe Abram akei kofanda o Ezipeti, mpo bokeleli bonene bongali o mokili. | |
Gene | LinVB | 12:11 | Ekomi ye penepene na Ezipeti, alobi na mwasi wa ye Sarai : « Yoka, nayebi ’te ozali mwasi kitoko. | |
Gene | LinVB | 12:12 | Soko ba-Ezipeti bamoni yo mpe balobi : ‘Azali mwasi wa ye’, bakoboma ngai, kasi bakotika yo. | |
Gene | LinVB | 12:13 | Nabondeli yo, oloba na bango ’te ozali ndeko mwasi wa ngai mpo ’te basala ngai se malamu mpe nabika mpo ya yo. » | |
Gene | LinVB | 12:14 | Ya solo, awa Abram ayingeli o Ezipeti, ba-Ezipeti bamoni ’te mwasi wa ye azali kitoko mpenza. | |
Gene | LinVB | 12:15 | Basaleli ba Farao bamoni ye mpe bakumisi ye o miso ma Farao, bongo bakotisi mwasi o ndako enene ya Farao. | |
Gene | LinVB | 12:16 | Mpo ya ye Farao asali Abram malamu mingi, apesi ye ngombe, mpata na mpunda, baombo basi na babali, mpunda basi mpe kamela. | |
Gene | LinVB | 12:17 | Kasi Yawe atindi mpasi ndenge na ndenge o libota lya Farao mpo ya Sarai, mwasi wa Abram. | |
Gene | LinVB | 12:19 | Mpo nini oyebisaki ngai te ’te ye azali mwasi wa yo ? Mpo nini olobaki ’te azali ndeko wa yo ? Nakamati ye lokola mwasi wa ngai ! Tala mwasi wa yo, kamata ye mpe kende ! » | |
Chapter 13
Gene | LinVB | 13:1 | Abram alongwi o Ezipeti mpe akei o Negeb, elongo na mwasi wa ye mpe na biloko bya ye binso. Lot azalaki mpe na ye. | |
Gene | LinVB | 13:3 | Asali mobembo longwa o Negeb, leka Betel tee esika apikaki ema liboso, penepene na Betel mpe na Ayi. | |
Gene | LinVB | 13:7 | Yango wana bakengeli ba bibwele, baye ba Abram na baye ba Lot, babandi koswana. O ntango ena ba-Kanana na ba-Perisi bazalaki bankolo ba mabelé. | |
Gene | LinVB | 13:8 | Abram alobi na Lot : « Boswani bokoki kobima kati ya biso na yo te, to kati ya bakengeli ba mpata ba ngai na baye ba yo, zambi tozali bandeko. | |
Gene | LinVB | 13:9 | Malamu tokabwana. Tala, mabelé mazali mingi, soko oponi mabelé o loboko la mwasi, ngai nakokende o loboko la mobali ; soko olingi o loboko la mobali, ngai nakokende o loboko la mwasi. » | |
Gene | LinVB | 13:10 | Lot atomboli miso mpe amoni esobe enene ya Yordane ezali na mai mingi bipai binso. O eleko ena Yawe abebisaki naino Sodoma na Gomora te, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola ekolo Ezipeti epai ya Soar. | |
Gene | LinVB | 13:11 | Lot aponi mokili penepene na Yordane mpe akei epai moi mokobimaka. Bakabwani se bongo. | |
Gene | LinVB | 13:12 | Abram atikali o Kanana, Lot aluki esika ya kofanda penepene na Yordane, atelemisi biema bya ye penepene na Sodoma. | |
Gene | LinVB | 13:14 | Ntango Abram akabwani na Lot, Yawe alobi na ye : « Tambwisa miso mpe tala u’o esika otelemi tee epai ya Nordi, ya Sudi, ya Esti mpe ya Nordi. | |
Gene | LinVB | 13:16 | Nakopesa yo bana baike lokola mbuma ya zelo. Soko moto ayebi kotanga zelo ya mokili, akoyeba mpe kotanga bana ba yo. | |
Chapter 14
Gene | LinVB | 14:1 | O eleko Amrafel azalaki mokonzi wa Sinear, Ariok mokonzi wa Elasar, Kedor-Laomer mokonzi wa Elam mpe Tideal mokonzi wa Goyim, | |
Gene | LinVB | 14:2 | bango banso bakei kobunda etumba na Bera mokonzi wa Sodoma, na Birsa mokonzi wa Gomora, na Sineab mokonzi wa Adna, na Semeber mokonzi wa Seapim, mpe na Soar mokonzi wa Bela. | |
Gene | LinVB | 14:4 | Batosaki mokonzi Kedor-Laomer mibu zomi na mibale. Ekomi mobu mwa zomi na misato, batomboki. | |
Gene | LinVB | 14:5 | O mobu mwa zomi na minei, Kedor-Laomer na bakonzi basusu na ye elongo bakweisi ba-Refaim o etumba ya Asterot-Karnayim, ba-Zuzim o etumba ya Ham, na ba-Emim o esobe ya Kiriatayim. | |
Gene | LinVB | 14:7 | Na nsima bazongi mpe bakomi o Ein-Mispat, o mboka Kades. Babebisi mokili mobimba mwa bato ba Amalek tee Asason-Tamar, mboka ya ba-Amor. | |
Gene | LinVB | 14:8 | Sikawa mokonzi wa Sodoma, mokonzi wa Gomora, mokonzi wa Adna, mokonzi wa Seapim na Soar, mokonzi wa Bela bazwani mpo ya kobunda etumba o lobwaku la Sidim ; | |
Gene | LinVB | 14:9 | babundi etumba na Kedor-Laomer mokonzi wa Elam, na Tideal mokonzi wa Goyim, na Amrafel mokonzi wa Sinear, mpe na Ariok mokonzi wa Elasar : bakonzi banei epai, bakonzi batano epai. | |
Gene | LinVB | 14:10 | Nzokande lobwaku lona la Sidim lozalaki na mabulu mingi, bisika batimolaka potopoto eindo. Mokonzi wa Sodoma na mokonzi wa Gomora bakimi : basusu bakwei o mabulu mana, basusu bakimi epai ya ngomba. | |
Gene | LinVB | 14:12 | Bakangi mpe Lot, mwana wa ndeko wa Abram, ná biloko bya ye, zambi Lot azalaki kofanda o Sodoma. | |
Gene | LinVB | 14:13 | Moko wa baye bakimaki etumba ayei koyebisa Abram mo-Ebrei. Abram azalaki kofanda epai ya nzete ya moto moko wa Amor nkombo ’te Mambre, ndeko wa Eskol na Aner bato bakataki bondeko na Abram. | |
Gene | LinVB | 14:14 | Ntango Abram ayoki ’te bakangi ndeko wa ye, abyangi bato bazalaki na ye bondeko, na baye babotami o mboka ya ye, bato nkama isato na zomi na mwambe, alandi bango tee Dan. | |
Gene | LinVB | 14:15 | Ye na bato ba ye babundi na bango etumba na butu. Abram akweisi bango, alandi bango tee Oba, o Nordi ya Damasko. | |
Gene | LinVB | 14:16 | Abotoli bango biloko binso, abikisi Lot na biloko bya ye, ná basi, ná bato ba ye banso. | |
Gene | LinVB | 14:17 | Abram alongi Kedor-Laomer na bakonzi bazalaki na ye, mpe awa azongi o mboka, mokonzi wa Sodoma akei kokutana na ye o lobwaku la Save (bakobengaka lango mpe lobwaku la mokonzi). | |
Gene | LinVB | 14:18 | Melkisedek, mokonzi wa Salem, ayei kopesa Abram mampa na vino, ye nganga wa Nzambe Nta-Likolo ; | |
Gene | LinVB | 14:19 | abenisi Abram na maloba maye : « Nzambe monene, oyo akelaki likolo na nse, abenisa Abram ; | |
Gene | LinVB | 14:20 | mpe bakumisa Nzambe monene, oyo akabaki banguna o maboko ma yo ! » Mpe Abram apesi ye eteni ya zomi ya biloko binso. | |
Gene | LinVB | 14:21 | Mokonzi wa Sodoma alobi na Abram : « Zongisela ngai bato, okoki kotikala na biloko. » | |
Gene | LinVB | 14:22 | Kasi Abram azongiseli mokonzi wa Sodoma boye : « Natomboli loboko epai ya Yawe, Nzambe Nta-Likolo, Oyo akelaki likolo na nse, | |
Gene | LinVB | 14:23 | mpe nalayi ’te : Nakokamata eloko ya yo te, ata mokulu moko, ata nsinga ya sapato. Mokolo moko oloba te “ ’te nakomisi Abram moto wa nkita”. | |
Chapter 15
Gene | LinVB | 15:1 | Nsima ya makambo mana, Yawe abimeli Abram na ndoto, alobi : « Abram, obanga te, ngai nakobatela yo, okozwa lifuta linene mpenza. » | |
Gene | LinVB | 15:4 | Yawe azongiseli ye : « Mosali akosangola biloko bya yo te, bobele mwana yo moko okobota akosangola byango. » | |
Gene | LinVB | 15:5 | Akei na ye o libanda mpe alobi : « Tombola miso o likolo, tanga minzoto soko okoki. » Mpe abakisi : « Bato ba libota lya yo bakosala ebele boye. » | |
Gene | LinVB | 15:7 | Yawe alobi na ye : « Ngai Yawe nabimisaki yo o mboka Ur, o mokili mwa Kaldea mpo ’te napesa yo mokili moye, okoma nkolo wa mabelé maye. » | |
Gene | LinVB | 15:9 | Yawe alobi : « Kamata ngombe mwasi ya mbula isato, ntaba ya mbula isato, mpata mobali ya mbula isato, ekokoba yoko na mwana wa ebenga. » | |
Gene | LinVB | 15:10 | Abram ayeli ye nyama ina inso, akati yango biteni bibale, atii biteni epai na epai, kasi apasoli ndeke te. | |
Gene | LinVB | 15:13 | Mpe Yawe alobi na Abram : « Yeba ’te bankoko ba yo bakozala bampaya o ekolo ezali ya bango te. Kuna bakozala baombo, bakonyokwama mbula nkamainei. | |
Gene | LinVB | 15:14 | Kasi nakopesa bato ba ekolo ena etumbu, mpe mokolo bana ba yo bakobima kuna bakozala na biloko mingi. | |
Gene | LinVB | 15:16 | Nzokande bankoko ba yo bakobota lisusu bana na bankoko kuna. Bobele na nsima bakozonga o mokili moye, zambi o ntango ena masumu ma ba-Amor makoleka ndelo. » | |
Gene | LinVB | 15:17 | Awa moi mokiti mpe butu boyindi, lituka na móto libimi milinga ná mpe esungi bileki o kati ya nyama bakataki. | |
Gene | LinVB | 15:18 | Mokolo mona Yawe akati bondeko na Abram, alobi : « Nakopesa bana ba yo ekolo eye, ut’o ebale ya Ezipeti tee ebale enene Efrate, | |
Chapter 16
Gene | LinVB | 16:1 | Sarai, mwasi wa Abram, abotelakiyemwanate.Azalaki na mosaleli, mwasi wa Ezipeti, nkombo ’te Agar. | |
Gene | LinVB | 16:2 | Sarai alobi na Abram : « Omoni, Yawe alingi te ’te nabota. Bongo kamata mosaleli wa ngai, mbele akobotela yo bana o esika ya ngai », mpe Abram andimi maloba ma Sarai. | |
Gene | LinVB | 16:3 | O ntango basili baumeli mbula zomi o mokili mwa Kanana, Sarai, mwasi wa Abram, akamati Agar, mosaleli wa ye, mwasi wa Ezipeti, apesi ye na mobali wa ye. | |
Gene | LinVB | 16:4 | Abram ayebani na ye mpe Agar azwi zemi. Awa Agar amoni ’te azalaki na zemi, abandi komonela Sarai mokonzi wa ye. | |
Gene | LinVB | 16:5 | Sarai alobi na Abram : « Mafinga afingi ngai, makwela yo. Ngai moto napesi yo mosaleli wa ngai. Ut’o mokolo azwi zemi, abandi kotala ngai mpamba. Yawe akata likambo lya biso na yo. » | |
Gene | LinVB | 16:6 | Abram azongisi : « Yo moko ozali mokonzi wa mosaleli wa yo ; sala na ye lokola olingi. » Sarai abandi konyokolo ye tee… Agar akimi. | |
Gene | LinVB | 16:7 | Anzelu wa Yawe akei kokutana na Agar o eliki pene na liziba lya mai, o nzela ya Sur. | |
Gene | LinVB | 16:8 | Anzelu atuni ye : « Agar, mosaleli wa Sarai, outi wapi mpe okokende wapi ? » Agar azongisi : « Nakimi Sarai mokonzi wa ngai. » | |
Gene | LinVB | 16:11 | Ozali na zemi, okobota mwana mobali, okopesa ye nkombo Ismael, mpo Yawe ayoki boleli bwa yo. | |
Gene | LinVB | 16:12 | Mwana wa yo akozala lokola mpunda ya zamba, akobundisa bato banso bakoluka ye na bitumba ; akotonga mboka ya ye mosika na bandeko ba ye. » | |
Gene | LinVB | 16:13 | Agar apesi Yawe, oyo asololaki na ye, nkombo eye : ‘Nzambe oyo akomonoko’, zambi amituni : « Awa nde esika namonoki oyo akomonoko ngai ? » | |
Gene | LinVB | 16:14 | Yango wana batangi libulu lina ‘Libulu lya Lakay-Royi’, libulu lya moto oyo akomonoko ngai. Libulu lyango lizali kati ya Bered na Kades. | |
Chapter 17
Gene | LinVB | 17:1 | Awa Abram akokisi mibu ntuku libwa na libwa, Yawe abimeli ye, alobi na ye : « Ngai Nzambe wa bokasi bonso. Tambola o miso ma ngai mpe zala mosantu. | |
Gene | LinVB | 17:5 | Bakotanga yo lisusu Abram te, kasi nkombo ya yo ekozala : Abarama, mpo nakokomisa yo tata wa bikolo ebele. | |
Gene | LinVB | 17:6 | Nakopesa yo bana baike. Nakokomisa yo tata wa bikolo mpe bakonzi bakobima o libota lya yo. | |
Gene | LinVB | 17:7 | Bondeko nakokata na yo, na bana ba yo na bankoko ba yo tee bankokolo ba yo, bokozala bwa seko ! Bongo nakozala Nzambe wa yo mpe wa bankoko ba yo. | |
Gene | LinVB | 17:8 | Nakopesa yo mpe bana ba yo mokili moye, esika oyei kofanda lokola mompaya, ekolo mobimba ya Kanana. Ekozala ekolo ya yo seko, mpe ngai nakozala Nzambe wa yo. » | |
Gene | LinVB | 17:9 | Nzambe alobi na Abarama lisusu : « Osengeli kotosa bondeko bwa biso na yo, na bana ba libota lya yo bakobotama nsima. | |
Gene | LinVB | 17:10 | Elembo ya bondeko ekozala kati ya biso na yo na bana ba yo : babali banso ba libota lya yo basengeli kokatisa nzoto. | |
Gene | LinVB | 17:12 | Bosengeli kokatisa bana babali ba bino banso nzoto, ntango bakokisi mikolo mwambe ; ezali mobeko mwa seko. Moombo abotami o ndako ya bino, ná oyo bosombi epai ya mompaya mpe azali mwana wa libota te. | |
Gene | LinVB | 17:13 | Bokatisa nzoto ya moombo abotami o ndako ya bino, ná oyo bosombi na mosolo. Bondeko bwa biso na bino bomonono o mosuni mwa bino lokola elembo ya bondeko bwa seko. | |
Gene | LinVB | 17:14 | Soko bakati mwana mobali nzoto te, alongwa o libota lya bino, mpo abomi bondeko na ngai. » | |
Gene | LinVB | 17:16 | Nakobenisa ye ; na nguya ya ngai akobotela yo mwana mobali. Nakobenisa ye, bongo akosala mama wa mabota, mpe bakonzi ba bikolo bakobotama o libota lya ye. » | |
Gene | LinVB | 17:17 | Abarama akwei elongi o nse, aseki, amilobeli o motema : « Mwana akobotama solo na mobali akokisi mbula monkama ? Sara, awa akokisi mbula ntuku libwa, akobota naino, solo ? » | |
Gene | LinVB | 17:19 | Nzambe alobi na Abarama : « Te ! Mwasi wa yo Sara akobotela yo mwana mobali mpe okopesa ye nkombo Izaka. Nakokata bondeko na ye mpe na bankoko ba ye, bondeko bwa seko ! | |
Gene | LinVB | 17:20 | Nayoki mpe mabondeli ma yo mpo ya Ismael. Tala, nakobenisa ye mpe nakokomisa ye nkoko wa bana ebele mpenza ; akobota bakonzi ba mabota zomi na mabale, mpe akokoma nkoko wa ekolo enene ya bato. | |
Gene | LinVB | 17:21 | Kasi nakokata bondeko bwa ngai na Izaka, mwana oyo Sara akobotela yo o mobu mokoya bobele o eleko eye. » | |
Gene | LinVB | 17:23 | Abarama akamati mwana wa ye Ismael, na bana babali banso babotami o ndako ya ye, na baye banso asombaki na mosolo. Babali banso bazalaki o ndako ya ye, akatisi bango nzoto bobele o mokolo monamei, lokola Nzambe ayebisaki ye. | |
Chapter 18
Gene | LinVB | 18:1 | Yawe abimeli Abarama penepene na nzete ya Mambre ntango afandi liboso lya ema, moi mozalaki kongala makasi. | |
Gene | LinVB | 18:2 | Abarama atomboli miso, amoni bato basato batelemi penepene na ye. Awa amoni bango, akei kokutana na bango, agumbami kin’o nse, | |
Gene | LinVB | 18:5 | Nakoyela bino mampa ; bolendisa nzoto liboso lya kokoba nzela, na ntina ena bokomi epai ya mosaleli wa bino. » Bango bayanoli : « Malamu, sala lokola olobi. » | |
Gene | LinVB | 18:6 | Abarama akoti o ema noki, alobi na Sara : « Kamata sani isato ya fufu, nika yango, mpe lamba mampa noki. » | |
Gene | LinVB | 18:7 | Ye moko akei mbangu kopono mwana ngombe mafuta mpe pete, apesi mosali alamba yango noki. | |
Gene | LinVB | 18:8 | Na nsima ayeli bango mafuta na mabéle, ná mosuni mwa ngombe balambi, abonzeli bango. Ntango bazalaki kolia atelemi penepene na bango o nse ya nzete. | |
Gene | LinVB | 18:10 | Mompaya alobi : « Ntango nakozongela yo o mobu mokoya, mwasi wa yo Sara akozala na mwana mobali. » Sara, oyo atelemi nsima ya mompaya, o boyingeli bwa ema, azalaki kotia matoi. | |
Gene | LinVB | 18:12 | Sara aseki o kati ya motema, amilobeli : « Awa nasili nalembi, nakoki nde koyoka mposa na mobali ? Mobali wa ngai mpe akomi mobange ! » | |
Gene | LinVB | 18:13 | Kasi Yawe alobi na Abarama : « Mpo nini Sara aseki mpe amituni : Solo, nakoki nde kobota mwana awa nakomi mobange ? | |
Gene | LinVB | 18:14 | Likambo nini lileki nde Yawe na bokasi ? O mobu mokoya, o mokolo nakozonga epai ya yo, Sara akozala na mwana. » | |
Gene | LinVB | 18:15 | Sara awangani, alobi : « Naseki te ! » Akomi kobanga. Kasi ye azongisi : « Lokuta, osekeki ! » | |
Gene | LinVB | 18:17 | Yawe amilobeli : « Nabombela nde Abarama makambo nalingi kosala ? Nakobombela ye te, | |
Gene | LinVB | 18:18 | zambi nalingi kokomisa ye tata wa libota linene mpe makasi, mpe bato ba nse mobimba bakozwa bolamu mpo ya ye. | |
Gene | LinVB | 18:19 | Naponi ye mpo ’te alakisa bana ba ye, ná bana ba libota lya ye bakobotama nsima, boniboni balanda nzela ya Yawe mpe bazala na bosembo o makambo manso ; bongo nakokisa maye nalakelaki Abarama. » | |
Gene | LinVB | 18:20 | Na nsima Yawe alobi na Abarama : « Nayoki mabe bato ba Sodoma na Gomora basali, bakoki na etumbu, masumu ma bango maleki mingi ! | |
Gene | LinVB | 18:22 | Bato bazalaki na Yawe, balongwi mpe bakei o Sodoma. Abarama atikali wana o miso ma Yawe. | |
Gene | LinVB | 18:24 | Soko basemba o mboka ena bakoki ntuku itano, okoboma nde mboka, mpe okolimbisa bmboka te mpo ya bato baye ntuku itano ? | |
Gene | LinVB | 18:25 | Okoki kosala bongo te : obomisa nde moto semba elongo na mosumuki ? Ekoki te ’te moto semba azwa likambo se lokola moto mabe ! Bongo mosambisi wa bato banso akata likambo na bosembo te, solo ? » | |
Gene | LinVB | 18:26 | Yawe azongisi : « Soko namoni basemba bakoki ntuku itano o mboka Sodoma, ndenalimbisi mboka mobimba mpo ya bango. » | |
Gene | LinVB | 18:27 | Abarama abondeli lisusu : « Ngai mabelé, mputulu mpamba, nábanga koloba na Mokonzi wa ngai te ? | |
Gene | LinVB | 18:28 | Mbele o ntei ya bato ntuku itano ezangi basemba batano ; bongo okoboma nde mboka mpo ya basemba batano bazangi ? » Yawe azongisi : « Te, nakoboma mboka te soko basemba bakoki ata ntuku inei na batano. » | |
Gene | LinVB | 18:29 | Abarama atiki te, alobi lisusu : « Mbele bazali bobele ntuku inei. » Mpe Yawe azongisi : « Soko bazali ntuku inei, nakosala yango te. » | |
Gene | LinVB | 18:30 | Abarama alobi lisusu : « Mokonzi wa ngai, osilika te, tika naloba : mbele basemba bazali se ntuku isato. » Mpe Nzambe azongisi : « Soko nazwi se ntuku isato, nakoboma mboka te. » | |
Gene | LinVB | 18:31 | Abarama alendisi : « Napusi monoko awa nakoloba na Mokonzi boye : mbele basemba bazali bobele ntuku ibale. » Yawe azongisi : « Soko basemba bakoki ntuku ibale, nakoboma mboka te. » | |
Gene | LinVB | 18:32 | Abarama alobi : « Mokonzi, osilika te, tika naloba mbala ya nsuka : mbele basemba bazwami se zomi mpamba. » Yawe azongisi : « Ata mpo ya bato zomi mpamba nakoboma mboka te. » | |
Chapter 19
Gene | LinVB | 19:1 | Banzelu babale bayei o Sodoma na mpokwa. Lot afandi o ezibeli ya lopango la mboka. Awa amoni banzelu, atelemi mpo ya koyamba bango, afukami mpe akitisi elongi o nse. | |
Gene | LinVB | 19:2 | Alobi : « Bandeko, nabondeli bino, boyingela o ndako ya ngai, bokoki kolala awa mpe kosukola makolo ; bongo na ntongo bokoba nzela ya bino ». Bayanoli : « Te, tokolala o libanda lya mboka. » | |
Gene | LinVB | 19:3 | Lot abondeli bango tee bandimi, bakoti o ndako ya ye. Alambeli bango limpati, apesi bango mampa malambami na nkisi te mpe balei. | |
Gene | LinVB | 19:4 | Naino balali te, bato ba Sodoma bayei kozinga ndako, bamboka banso, bilenge na babange bayei wana. | |
Gene | LinVB | 19:5 | Babengi Lot, batuni ye : « Wapi babali bayaki epai na yo na butu ? Bimisa bango mpo tolala na bango. » | |
Gene | LinVB | 19:8 | Nakoki kopesa bino bana ba ngai babale bayebi naino mobali te ; bokoki kosala na bango lokola bolingi ; kasi bosala bato, baye nayambaki o ndako ya ngai, mabe te. » | |
Gene | LinVB | 19:9 | Bango bazongisi : « Longwa wana ! Tala moto auti o ekolo esusu, mpe alingi kopesa biso mibeko. Tokosala yo mabe maleki ! » Na makasi bazongisi ye o nsima, mpe babelemi mpo ya kobuka ezibeli ya ndako. | |
Gene | LinVB | 19:10 | Kasi bampaya o kati ya ndako babendi Lot mpe bakotisi ye o ndako, mpe bakangi ezibeli. | |
Gene | LinVB | 19:11 | Bakomisi bato banso bazalaki o liboso lya ndako lolanda. Ná bilenge, ná bakolo, moto moko akoki komono ezibeli ya ndako lisusu te. | |
Gene | LinVB | 19:12 | Bampaya balobi na Lot : « Ozali na bato basusu o mboka eye ? To bokilo to bana babali to bana basi ba yo ? Bandeko ba yo banso bazali awa, bimisa bango. | |
Gene | LinVB | 19:13 | Tolingi koboma mboka eye, zambi mabe ma yango makobelela Yawe makasi, atindi biso toboma yango. » | |
Gene | LinVB | 19:14 | Lot akei koyebisa bakilo ba ye, baye balingi kobala bana ba ye, alobi na bango : « Bosala noki, bolongwa awa, zambi Yawe akoboma mboka. » Kasi bakilo bakanisi ’te azalaki koseke. | |
Gene | LinVB | 19:15 | Etani ntongo, banzelu batindi Lot akima mboka, balobi : « Teleme, kende na mwasi mpe na bana basi babale ba yo mpo ’te bokufa te ntango mboka ekozwa etumbu. » | |
Gene | LinVB | 19:16 | Awa Lot atii naino ntembe, banzelu babendi ye, mwasi wa ye, na mpe bana basi na loboko, zambi Yawe ayokeli bango mawa. | |
Gene | LinVB | 19:17 | Bakei kotika bango o libanda lya mboka mpe balobi : « Kima mpo ’te obika, otala nsima te, oteleme mpe o nzela te, kasi kima epai ya ngomba mpo okufa te ! » | |
Gene | LinVB | 19:19 | Solo, nazwi bolamu o miso ma yo, mpe olakisi ngai ngolu ya yo mpo ’te obikisa ngai. Kasi ntango ekoki te mpo nakima o ngomba ; mbele mpasi ekokwela ngai mpe nakokufa kuna. | |
Gene | LinVB | 19:21 | Anzelu alobi na ye : « Malamu, mpo ya yo nandimi ; mboka eye otangi, nakoboma yango te. | |
Gene | LinVB | 19:22 | Kende noki, liboso ’te okoma kuna nakosala eloko te. » Na ntina ena batangi mboka ena Soar. | |
Gene | LinVB | 19:28 | Atali Sodoma na Gomora na esobe mobimba ; amoni milinga mizalaki kobuta o likolo lokola molinga mwa móto monene. | |
Gene | LinVB | 19:29 | Bongo ntango Nzambe abomi mboka iye izalaki o esobe, akanisi Abarama, mpe abikisi Lot ntango mboka ye azalaki kofanda, eziki. | |
Gene | LinVB | 19:30 | Lot alongwi o Soar mpe akei kofanda epai ya ngomba elongo na bana basi ba ye babale ; abangi kotikala o Soar. Akei kofanda o mobe-nga o kati ya mabanga, ye na bana basi ba ye babale. | |
Gene | LinVB | 19:31 | Mwana wa yambo alobi na mosimi : « Tata wa biso asili anuni, mpe awa o ekolo eye mobali moko azali te, oyo akoki koya kofanda na biso, lokola bakozalaka bipai binso. | |
Gene | LinVB | 19:33 | Na butu bamelisi tata wa bango vino mingi, mpe mwana wa yambo akei kolala na ye. Tata ayebi eloko te, banda akei kolala tee atelemi lisusu. | |
Gene | LinVB | 19:34 | Na ntongo, mwana wa liboso alobi na mosimi : « Na butu nalalaki na tata. Tomelisa ye lisusu vino mingi, yo mpe lala na ye, bongo tokopesa ye libota. » | |
Gene | LinVB | 19:35 | Mbala ya ibale bamelisi tata wa bango vino mingi. Mwana mosimi akei kolala na ye. Tata ayebi eloko te, banda akei kolala tee atelemi lisusu. | |
Gene | LinVB | 19:37 | Mwanawaliboso aboti mwana mobali mpe apesi ye nkombo Moab ; azali nkoko wa ba-Moab baye bazali tee sikawa. | |
Chapter 20
Gene | LinVB | 20:1 | Abarama alongwi wana, akei o mokili mwa Negeb, o etuka yoko penepene na Kades mpe na Sur ; na nsima akei kofanda o mboka Gerar. | |
Gene | LinVB | 20:2 | Abarama alobi ’te Sara mwasi wa ye azali ndeko wa ye ; bongo Abimelek atindi bato mpo ’te bakamata ye na makasi. | |
Gene | LinVB | 20:3 | Kasi Nzambe abimeli Abimelek na ndoto na butu, alobi na ye : « Okokufa mpo ya mwasi oyo okamati, mpamba te, azali mwasi wa libala. » | |
Gene | LinVB | 20:4 | Abimelek ayebanaki na mwasi ona naino te, bongo alobi : « E Mokonzi, olingi nde koboma moto oyo asali likambo lyoko te ? | |
Gene | LinVB | 20:5 | Ye moko alobaki na ngai ’te mwasi azali ndeko wa ye, mwasi mpe alobaki ’te azali ndeko wa ye. O motema mwa ngai namoni mabe te, nazali na likambo lyoko te. » | |
Gene | LinVB | 20:6 | Nzambe ayanoli ye na ndoto : « Ngai mpe nayebi ’te osali yango na motema mabe te, nabateli yo mpo ’te osala lisumu o miso ma ngai te ; yango wana napekisi yo ’te osimba ye te. | |
Gene | LinVB | 20:7 | Sikawa zongisa mwasi epai ya mobali wa ye, zambi azali profeta. Soko oboyi kozongisa ye, nayebisi yo ’te okokufa, yo nabato bayo banso. » | |
Gene | LinVB | 20:8 | Abimelek alamuki na ntongo-ntongo, abengi basaleli ba ye banso. Ayebisi bango makambo mana manso. Bato ba ye babangi mingi. | |
Gene | LinVB | 20:9 | Abimelek abengi Abarama, alobi na ye : « Osali biso nini ko ? Mabe nini nasali yo mpo ’te oluka kozwisa ngai na mpe ekolo ya ngai mobimba lisumu linene ? Bakosalaka bongo te. » | |
Gene | LinVB | 20:11 | Abarama ayanoli : « Nakanisaki : o mokili moye moto moko akobangaka Nzambe te ; bato bakoki koboma ngai mpo ’te bazwa mwasi wa ngai. | |
Gene | LinVB | 20:12 | Mpe ya solo, azali ndeko wa ngai, tobotami na tata moko, kasi tokeseni bamama, mpe nabalaki ye. | |
Gene | LinVB | 20:13 | Awa Nzambe wa likolo atindaki ngai nalekaleka mosika na ndako ya tata wa ngai, nalobaki na Sara : Sala ngai malamu, bipai binso tokokoma, okoloba ’te ozali ndeko wa ngai. » | |
Gene | LinVB | 20:14 | Abimelek akamati ngombe na bibwele, akamati basali babali na basi mpe apesi Abarama. Azongiseli ye mwasi wa ye Sara. | |
Gene | LinVB | 20:15 | Alobi na ye : « Tala mokili mwa ngai mozali awa liboso lya yo. Kende kofanda esika olingi. » | |
Gene | LinVB | 20:16 | Mpe alobi na Sara : « Nakopesa ndeko wa yo mitako mya palata nkoto yoko, mpo ’te bato banso bayeba ’te ozali na likambo lyoko te. » | |
Gene | LinVB | 20:17 | Abarama abondeli Nzambe mpo ya Abimelek, mpe Nzambe abikisi ye, ná mwasi wa ye wa libala, ná basi basusu ba ndako ya ye mpo ’te bakoka kobota bana. | |
Chapter 21
Gene | LinVB | 21:2 | Sara azwi zemi mpe aboteli mobange Abarama mwana mobali, bobele o eleko Nzambe alakelaki ye. | |
Gene | LinVB | 21:6 | Mpe Sara alobi : « Nzambe asali ’te nakoka koseke ; bato banso bakoyoka nsango ena bakoseke elongo na ngai. » | |
Gene | LinVB | 21:7 | Alobi naino : « Nani akokaki koloba na Abarama ’te mokolo moko Sara akomelisa mwana libéle ? Awa akomi mobange, naboteli ye mwana mobali. » | |
Gene | LinVB | 21:8 | Mwana akoli mpe atiki konunga mabéle. Mokolo balongoli ye o mabéle, Abarama alambi limpati linene. | |
Gene | LinVB | 21:9 | Mokolo moko Sara amoni ’te mwana wa Agar, mwasi wa Ezipeti, azalaki kosakana na Izaka ; | |
Gene | LinVB | 21:10 | alobi na Abarama : « Bengana mosaleli ona na mwana wa ye ; mwana wa ye akoki kosangola biloko bya tata lokola Izaka te. » | |
Gene | LinVB | 21:12 | Kasi Nzambe alobi na ye : « Oyoka mawa te mpo ya mosaleli wa yo na mwana wa ye. Ndima makambo manso Sara akosenge yo, zambi libota lya Izaka likoumisa nkombo ya yo o mokili. | |
Gene | LinVB | 21:13 | Kasi nakokomisa mwana wa mosaleli wa yo mpe tata wa libota linene, zambi ye mpe azali mwana wa yo. » | |
Gene | LinVB | 21:14 | Etelemi Abarama na ntongo mpenza, akamati mampa na ekutu ya mai, apesi Agar. Na nsima abutisi mwana o lipeke lya mama wa ye mpe atindi bango bakende. Agar akei kotelengana o eliki ya Berseba. | |
Gene | LinVB | 21:16 | akei kofanda mwa mosika ekokani na ntaka bakobeteke likula, mpe amilobeli : « Nalingi komono liwa lya mwana wa ngai te. » Efandi ye bongo, abandi kolela makasi. | |
Gene | LinVB | 21:17 | Nzambe ayoki boleli bwa mwana mpe ut’o likolo anzelu wa Nzambe abengi Agar, alobi : « Agar, likambo nini ? Obanga te, Nzambe ayoki boleli bwa mwana ut’o esika azali. | |
Gene | LinVB | 21:18 | Teleme, kende, kamata mwana mpe simba ye malamu ; mpo nakokomisa ye tata wa bato baike. » | |
Gene | LinVB | 21:19 | Nzambe afungoli Agar miso. Agar amoni libulu lya mai, atondisi ekutu na mai, amelisi mwana. | |
Gene | LinVB | 21:22 | O eleko ena, Abimelek ayei elongo na Pikol, komanda wa basoda ba ye, alobi na Abarama : « Nzambe azali na yo o makambo manso okosalaka. | |
Gene | LinVB | 21:23 | Bongo laya ndai sikawa o miso ma ngai, mpe loba ’te okokosa ngai mpe bato ba libota lya ngai te. Okolakisa ngai mpe bato banso ba ekolo eye, esika oyei kofanda se motema mwa bondeko, lokola ngai nalakisi yo. » | |
Gene | LinVB | 21:25 | Abarama akei epai ya Abimelek, afundi basali ba ye zambi babotoli ye libulu lya mai. | |
Gene | LinVB | 21:26 | Abimelek alobi : « Nayebi eloko te, nani asalaki bongo ? Yo mpe oyebisaki ngai te. Nayoki likambo lyango se lelo. » | |
Gene | LinVB | 21:30 | Abarama azongisi : « Okamata mpata yango nsambo nakopesa yo, ekolakisa ’te ngai moto natimolaki libulu lina. » | |
Gene | LinVB | 21:32 | Awa bakati bondeko o Berseba, Abimelek azongi elongo na Pikol, komanda wa basoda, o ekolo ya ba-Filisti. | |
Gene | LinVB | 21:33 | Abarama aloni nzete ya tamaris o Berseba mpe abeleli nkombo ya Yawe, Nzambe wa lobiko. | |
Chapter 22
Gene | LinVB | 22:1 | Nsima ya makambo mana Nzambe alingi komeka Abarama, abengi ye : « Abarama ! » Abarama andimi : « Ngai oyo ! » | |
Gene | LinVB | 22:2 | Nzambe alobi : « Kamata mwana wa yo wa bolingo, mwana wa yo se moko Izaka, mpe kende o mokili mwa Moria ; o ngomba eye nakolakisa yo okobonza ye bo libonza lya kotumba. » | |
Gene | LinVB | 22:3 | Abarama alongwi na ntongontongo, atii biloko o mpunda, akamati basali babale na mwana wa ye Izaka. Akati nkoni mpo ya kotumba libonza ; na nsima akei o esika Nzambe alakisaki ye. | |
Gene | LinVB | 22:5 | Abarama alobi na basali ba ye : « Botikala awa na mpunda ; biso na mwana tokokende tee kuna : tokumbamela Nzambe, na nsima tokozonga epai ya bino. » | |
Gene | LinVB | 22:6 | Abarama akamati nkoni mpo ya libonza, apesi Izaka ameme yango ; ye moko akamati móto na mbeli ; mpe banso babale bakei. | |
Gene | LinVB | 22:7 | Izaka abengi tata wa ye Abarama : « Tata ! » Tata azongisi : « Mwana, likambo nini ? » Izaka atuni : « Móto na nkoni izali, kasi wapi mpata ya libonza ? » | |
Gene | LinVB | 22:8 | Abarama azongisi : « Mwana, Nzambe yemei akopesa biso mpata ya libonza. » Mpe bango babale bakobi nzela ya bango. | |
Gene | LinVB | 22:9 | Ekomi bango o esika Nzambe alakisaki, Abarama atongi altare mpe abongisi nkoni o likolo. Na nsima akangi mwana wa ye Izaka na nsinga mpe atii ye o altare o likolo lya nkoni. | |
Gene | LinVB | 22:11 | Kasi ut’o likolo anzelu wa Yawe abengi ye, alobi : « Abarama, Abarama ! » Abarama andimi : « Ngai oyo ! » | |
Gene | LinVB | 22:12 | Anzelu alobi na ye : « Oboma mwana te, osala ye mabe moko te ! Sikawa nayebi ’te okobangaka Nzambe : opimi ye mwana se moko wa yo te. » | |
Gene | LinVB | 22:13 | Abarama átombola miso, amoni mpata mobali ekangemi na maseke o bitapi ya mwa nzete. Akangi mpata mpe atumbi yango bo libonza o esika ya mwana wa ye. | |
Gene | LinVB | 22:14 | Abarama apesi esika ena nkombo : ‘Yawe alalaka te’. Yango wana bakolobaka tee lelo : ‘O ngomba Yawe akokengeke’. | |
Gene | LinVB | 22:16 | alobi : « Yoka liloba lya Yawe : Ngai moko nalayi ndai : Awa osali bongo mpe opimi ngai mwana se moko wa yo te, | |
Gene | LinVB | 22:17 | nakobenisa yo : nakopesa yo bana ebele lokola minzoto mya likolo mpe lokola zelo o libongo lya mbu, mpe bana ba yo bakobotolo mboka ya banguna. | |
Gene | LinVB | 22:18 | Bato ba bikolo binso bya nse bakozwa bolamu mpo ya libota lya yo, zambi otosaki ngai. » | |
Gene | LinVB | 22:19 | Abarama azongi epai ya basali. Banso elongo bakei o Berseba ; atikali kofanda kuna. | |
Gene | LinVB | 22:20 | Nsima ya makambo mana, Abarama ayoki ’te Milka, mwasi wa ndeko wa ye Nakor, aboti mpe bana. | |
Chapter 23
Gene | LinVB | 23:2 | awei o mboka Kiriat-Arba, lokola ’te Ebron, o mokili mwa Kanana. Abarama aleli Sara mpe asali lilaka. | |
Gene | LinVB | 23:4 | « Ngai nazali mouta mpe mompaya o kati ya bino. Pesa ngai mabelé epai ya bino, nakoka kokunda mowei wa ngai. » | |
Gene | LinVB | 23:6 | « Yoka mokonzi, osali moto wa Nzambe o kati ya biso ; pono lilita lileki kitoko, kunda mowei wa yo ; moto moko akopima yo lilita te mpo ’te okunda mowei wa yo. » | |
Gene | LinVB | 23:8 | Alobi na bango : « Soko bondimi ’te nalongola mowei mpe nakunda ye, bobondela Efron, mwana wa Soar, | |
Gene | LinVB | 23:9 | atikela ngai mobenga mwa Makpela ; ye azali nkolo wa mabelé mana, mobenga mosali epai ya nsuka ya elanga ya ye. Atekela ngai yango o miso ma bino, nakofuta motuya mokoki na yango, ekoma bongo esika nakokunda bato ba ngai. » | |
Gene | LinVB | 23:10 | Efron azalaki kofanda o kati ya bana ba Eti. Mpe mo-Iti Efron azongiseli Abarama eyano, ba-Eti bazalaki koyoka, baye banso bafandi penepene na ezibeli ya mboka, alobi : | |
Gene | LinVB | 23:11 | « Tika mokonzi, mpe yoka naino. Nakopesa yo elanga yango na mpe mobenga mozali wana ; napesi yango o miso ma bato ba ngai. Kunda mowei wa yo. » | |
Gene | LinVB | 23:13 | alobi na Efron, o miso ma bango : « Nabo-ndeli yo, soko ozali koyoka ngai, nalingi kofuta elanga bo ebongi. Kamata mosolo, bongo nakunda mowei wa ngai. » | |
Gene | LinVB | 23:15 | « Mokonzi, yoka ngai : elanga ekoki na mitako nkama inei, yango nini nde kati ya biso na yo ? Kunda mowei wa yo. » | |
Gene | LinVB | 23:16 | Abarama andimi maloba ma Efron, abimisi mosolo moye Efron asengeki o miso ma bana ba Eti, mitako mya palata nkama inei. | |
Gene | LinVB | 23:17 | Bongo elanga ya Efron ezali o Makpela, penepene na Mambre ná mpe mobenga mosali wana, ná nzete inso isali o elanga ena, | |
Gene | LinVB | 23:18 | bandimi ’te inso ikoma mabelé ma Abarama. Ezalaki wana ba-Eti na bankumu ba mboka banso. | |
Gene | LinVB | 23:19 | Bongo Abarama akundi mwasi wa ye Sara o mobenga mwa Makpela, penepene na Mambre, eye ezali Ebron, o mokili mwa Kanana. | |
Chapter 24
Gene | LinVB | 24:2 | Abarama alobi na mokóló wa basaleli, oyo akoyangelaka biloko bya ye binso : « Tia loboko o nse ya ebelo ya ngai. | |
Gene | LinVB | 24:3 | Layela ngai ndai o miso ma Yawe, Nzambe wa likolo na nse, ’te okoluka kobalela mwana wa ngai mwasi o ekolo Kanana te, esika tofandi sikawa. | |
Gene | LinVB | 24:5 | Mosaleli atuni Abarama : « Mbele elengi mwasi moko te akondima te kolanda ngai kin’o mokili moye : soki bongo, nazongisa mwana wa yo o mboka epai yo outaki ? » | |
Gene | LinVB | 24:7 | Yawe, Nzambe wa likolo, oyo akamataki ngai o ndako ya tata mpe o ekolo ya bandeko ba ngai, alakelaki ngai na ndai ‘te : Nakopesa bana ba yo mokili moye. Ye moto akotinda anzelu abatela yo mpo okoka kozwela mwana wa ngai mwasi kuna. | |
Gene | LinVB | 24:8 | Soko mwasi moko alingi kolanda yo te, okokangema lisusu te na ndai nakolayisa yo. Ata boni, okende kotika mwana wa ngai kuna te. » | |
Gene | LinVB | 24:10 | Mosaleli akamati kamela zomi ya mokonzi wa ye, amemi mpe biloko bilamu binso bisalaki o ndako ya mokonzi wa ye mpe akei o Aram-Nakaraim, mboka ya Nakor. | |
Gene | LinVB | 24:11 | Ekomi ye penepene na mboka, apemisi kamela inso pene na libulu lya mai, na ngonga ya mpokwa ntango basi bakoyaka kotoka mai. | |
Gene | LinVB | 24:12 | Alobi : « E Yawe, Nzambe wa mokonzi wa ngai Abarama, salisa ngai lelo mpe lakisa ’te olingi mokonzi wa ngai Abarama ! | |
Gene | LinVB | 24:14 | Soko nalobi na mwana mwasi moko : Kitisa elokó ya yo namele mai, soko mwana azongisi : Mele, namelisa mpe kamela ya yo, nakoyeba ’te azali mwasi oyo olingi kobalela Izaka, mosaleli wa yo. Nakomono bongo ’te olakisi mokonzi wa ngai bolamu. » | |
Gene | LinVB | 24:15 | Asilisi koloba naino te, eyei wana Rebeka, mwana wa Betuel, nkoko wa Milka, oyo azali mwasi wa Nakor, ndeko wa Abarama. Rebeka amemi elokó o lipeke. | |
Gene | LinVB | 24:16 | Azalaki elenge mwasi kitoko, abali naino te, ayebi mpe mobali te. Akiti pene na lisiba, atondisi elokó mpe abuti lisusu. | |
Gene | LinVB | 24:17 | Mosaleli akei mbangu, alobi na ye : « Nabondeli yo, tika namele ata moke o elokó ya yo. » | |
Gene | LinVB | 24:19 | Awa asilisi kopesa ye mai, alobi : « Natokela mpe kamela ya yo mai, isilisa mposa ya komele. » | |
Gene | LinVB | 24:20 | Asopi mai manso ma elokó o eboka ya kamela, mpe azongi noki o liziba kotoka lisusu. Amelisi kamela inso. | |
Gene | LinVB | 24:21 | Mosaleli azalaki kotala ye, alobi eloko te, azalaki komituna soko Yawe abongisi mobembo mwa ye mpenza. | |
Gene | LinVB | 24:22 | Awa kamela isili komele mai, mosaleli akamati mpete ya wolo ya ndambo ya motako, na mpe bikomo bibale bya wolo bya mitako zomi. | |
Gene | LinVB | 24:23 | Atuni ye : « Ozali mwana wa nani ? Nabondeli yo, yebisa ngai. O ndako ya tata wa yo esika ezali mpo tolala na butu ? » | |
Gene | LinVB | 24:24 | Mwasi alobi : « Nazali mwana wa Betuel. Tata azali mwana oyo Milka abotelaki Nakor. » | |
Gene | LinVB | 24:25 | Abakisi : « Epai ya biso matiti mazali mingi mpo ya nyama ya yo ; esika ya kolala ezali mpe. » | |
Gene | LinVB | 24:27 | alobi : « Bakumisa Yawe, Nzambe wa mokonzi wa ngai Abarama. Alakisi ye bolingi na ngolu ya ye. Akambi ngai o nzela mpe akei kotika ngai epai ya bandeko ba ye. » | |
Gene | LinVB | 24:29 | Rebeka azalaki na ndeko mobali, Laban. Laban akei mbangu koyamba mompaya atikalaki epai ya liziba. | |
Gene | LinVB | 24:30 | Awa amonoki mpete na bikomo o maboko ma ndeko wa ye, mpe awa Rebeka ayebisi ye : « Yoka boniboni moto oyo alobaki na ngai », akei kokutana na moto ona atelemi naino na kamela ya ye pene na liziba. | |
Gene | LinVB | 24:31 | Alobi na ye : « Yawe abenisa yo ! Mpo nini otikali o libanda ? Yaka, nabongiseli yo ndako, nazweli kamela ya yo mpe esika. » | |
Gene | LinVB | 24:32 | Mompaya akoti o ndako mpe alongoli mikumba o kamela ya ye. Bato bayei na matiti mpe na bilei mpo ya kamela, basusu bayei na mai mpo ’te mompaya na bato ba ye basukola makolo. | |
Gene | LinVB | 24:33 | Na nsima bayei na bilei. Kasi ye alobi : « Nakolia te liboso ’te nayebisa bino ntina ya boyei bwa ngai. » Bazongisi : « Loba. » | |
Gene | LinVB | 24:35 | Yawe asalisi mokonzi wa ngai mingi mpenza, akomisi ye moto wa nkita. Apesi ye ngombe na bibwele, wolo na palata, basali babali na basi, kamela mpe mpunda. | |
Gene | LinVB | 24:36 | Mwasi wa ye Sara aboteli ye mwana ntango asilaki kokoma mobange. Sikawa mokonzi wa ngai asili apesi mwana wa ye biloko bya ye binso. | |
Gene | LinVB | 24:37 | Mpe alobaki na ngai : Laya ndai eye : Okobalela mwana wa ngai mwasi wa Kanana te, mwana wa mokili moye nazali kofanda. | |
Gene | LinVB | 24:38 | Mawa na yo soko okei kolukela mwana wa ngai mwasi te o ekolo ya ngai, o libota lya ngai. | |
Gene | LinVB | 24:40 | Mokonzi wa ngai azongisaki : ‘Ngai nalandaki se nzela ya Yawe. Ye akotinda anzelu wa ye akende elongo na yo mpo ’te mobembo mwa yo mosuka malamu. Okobalela mwana wa ngai mwasi wa ekolo ya ngai. | |
Gene | LinVB | 24:41 | Mabe makokwela yo te soko okomi o libota lya ngai. Soko balingi kobalela biso mwasi te, okokangema na maloba ma ndai ya yo lisusu te.’ | |
Gene | LinVB | 24:42 | Ntango nakomaki lelo awa pene na liziba, nalobaki : ‘Yawe, Nzambe wa mokonzi wa ngai Abarama, lakisa ngai soko ya solo olingi kosukisa mobembo mwangaimalamu. | |
Gene | LinVB | 24:43 | Tala, natelemi penepene na liziba. Soko elenge mwasi ayei kotoka mai, nakoloba na ye : Pesa ngai mai o elokó ya yo, namele. | |
Gene | LinVB | 24:44 | Soko mwasi azongisi : Mele yo moko, nakotokela mpe kamela ya yo mai, nakoyeba ’te ye azali mwasi oyo Yawe alingi kopesa mwana wa mokonzi wa ngai. | |
Gene | LinVB | 24:45 | Naino nasilisaki maloba te, namoni Rebeka ayei, elokó o lipeke. Akiti epai ya liziba mpe atoki mai. Nalobi na ye : ‘Nabondeli yo, pesa ngai mai námele.’ | |
Gene | LinVB | 24:46 | Noki mpenza akitisi elokó mpe alobi : ‘Mele, námelisa mpe kamela ya yo.’ Nameli, amelisi mpe kamela ya ngai. | |
Gene | LinVB | 24:47 | Natuni ye : ‘Ozali mwana wa nani ?’ Ayanoli ngai : ‘Nazali mwana wa Betuel ; mwana oyo Milka abotelaki Nakor.’ Bongo natii mpete o zolo ya ye, na mpe bikomo o maboko ma ye. | |
Gene | LinVB | 24:48 | Nafukami, namilalisi o mabelé o miso ma Yawe. Natondi Yawe, Nzambe wa mokonzi wa ngai Abarama, zambi akambaki ngai o nzela mpo ’te nabalela mwana wa mokonzi wa ngai mwana mwasi wa ndeko wa ye. | |
Gene | LinVB | 24:49 | Sikawa, soko bolingi kosala mokonzi wa ngai malamu, boyebisa ngai ; bongo nayeba nini nakoki kosala. » | |
Gene | LinVB | 24:50 | Laban na Betuel bazongiseli ye : « Yawe moto atindi yo. Biso tokoki koboya monoko mwa ye te. | |
Gene | LinVB | 24:51 | Tala, Rebeka ye oyo, kamata ye mpe kende na ye ; akoma mwasi wa mwana wa nkolo wa yo, se lokola Yawe alobaki. » | |
Gene | LinVB | 24:53 | Abimisi biloko bya wolo mpe bya palata na bilamba ; apesi Rebeka. Apesi ndeko na mama wa ye mpe mabonza ma motuya. | |
Gene | LinVB | 24:54 | Mosaleli na baninga balei mpe bameli, na butu balali se wana. Elongwi bango o mpongi na ntongo alobi : « Malamu nazonga epai ya mokonzi wa ngai. » | |
Gene | LinVB | 24:55 | Ndeko wa Rebeka na mama wa ye balobi : « Mwana atikala naino mwa mikolo, ata mikolo zomi mpamba, na nsima akende. » | |
Gene | LinVB | 24:56 | Kasi ye azongisi : « Bosilisa ngai te ; Yawe moto akomisi ngai o nsuka ya mobembo mwa ngai, bongo botika ngai nazonga epai ya mokonzi wa ngai. » | |
Gene | LinVB | 24:58 | Babengi Rebeka mpe batuni ye : « Olingi kokende na moto oyo ? » Rebeka azongisi : « Nalingi. » | |
Gene | LinVB | 24:59 | Bongo batiki ye akende. Akei elongo na mobokoli wa ye mpe na mosaleli wa Abarama na bato ba ye. | |
Gene | LinVB | 24:60 | Babenisi Rebeka, mpe balobi na ye : « Ndeko, obota bana na bankoko nkoto na nkoto. Bankoko ba yo bakweisa banguna ba bango. » | |
Gene | LinVB | 24:61 | Rebeka, elongo na basaleli ba ye, batelemi, babuteli kamela mpe balandi mosaleli wa Abarama. Mosaleli akei elongo na Rebeka. | |
Gene | LinVB | 24:62 | Izaka asilaki kolongwa penepene na libulu lya Lakay-Royi, zambi akomi kofanda o mokili mwaNegeb. | |
Gene | LinVB | 24:63 | Na mpokwa abimi o libanda mpo azwa mompepe. Atombola miso, amoni kamela izalaki koya. | |
Gene | LinVB | 24:65 | atuni mosaleli : « Nani mobali oyo azali koya wana kokutana na biso ? » Mosaleli azongisi : « Ezali nkolo wa ngai. » Rebeka akangi litambala mpo azipa elongi. | |
Chapter 25
Gene | LinVB | 25:3 | Yoksan aboti Seba na Dedan ; bana ba Dedan baboti ba-Asur, ba-Letusim na ba-Leumim. | |
Gene | LinVB | 25:6 | Akabeli mpe bana ba bamakango biloko. Kasi liboso lya kokufa atindi bango bakende kofanda epai ya Esti, mosika na mwana wa ye Izaka. | |
Gene | LinVB | 25:8 | Na nsima awei, akomaki mobange mpenza, akokisaki mikolo mya ye, bongo akei kokutana na bankoko ba ye. | |
Gene | LinVB | 25:9 | Izaka na Ismael bakundi ye o mobenga mwa Makpela o mabelé ma Efron, mwana wa Soar, moto wa ekolo ya Eti, penepene na Mambre. | |
Gene | LinVB | 25:10 | Ezali mabelé Abarama asombaki epai ya bana ba Eti. Bakundi ye wana penepene na mwasi wa ye Sara. | |
Gene | LinVB | 25:11 | Nsima ya liwa lya Abarama, Nzambe abenisi mwana wa ye Izaka, oyo akei kofa-nda penepene na libulu lya mai nkombo ’te Lakay-Royi. | |
Gene | LinVB | 25:12 | Libota lya Ismael, mwana oyo Abarama abotaki na Agar, mwasi wa Ezipeti, mosaleli wa Sara. | |
Gene | LinVB | 25:13 | Nkombo ya bana ba Ismael na nkombo ya mabota ma bango yango iye : Mwana wa yambo wa Ismael, Nebayot ; na nsima aboti Kedar, Adbeel, Mibsam, | |
Gene | LinVB | 25:16 | Yango nde nkombo ya bana ba Ismael na mpe mabota ma bango ; bakofandaka o biema, bazali bakonzi ba mabota zomi na mabale. | |
Gene | LinVB | 25:17 | Ismael aumeli na bomoi mibu monkama na ntuku isato na nsambo. Na nsima awei mpe akei kokutana na bandeko ba ye. | |
Gene | LinVB | 25:18 | Ba-Ismael bafandi ut’o Avila kin’o Sur, ut’o ekolo o Esti ya Ezipeti kin’o Asur. Ismael atikali kofanda kuna, zambi bandeko ba ye banso bakokaki kolonga ye te. | |
Gene | LinVB | 25:20 | Ekokisi Izaka mibu ntuku inei, abali Rebeka, mwana wa Betuel, moto wa Padan-Aram mpe ndeko wa mo-Aram Laban lokola. | |
Gene | LinVB | 25:21 | Izaka abondeli Yawe mpo ya mwasi wa ye, zambi azalaki kobota te. Yawe andimeli ye, mpe mwasi wa ye Rebeka akomi na zemi. | |
Gene | LinVB | 25:22 | Nzokande bana bakomi kotutana o libumu lya ye. Rebeka alobi : Soko ezali bongo, likambo nini likokwela ngai ? Akei kotuna Yawe, | |
Gene | LinVB | 25:23 | mpe Yawe alobi na ye : « Omemi bakonzi babale o libumu, bikolo bibale biye bikobima o nzoto ya yo bikokabwana, moko akoleka mosusu na bokasi, mwana wa yambo akosalela leki wa ye. » | |
Gene | LinVB | 25:25 | Mwana abimi liboso azalaki motane mpe na nsuki mingi lokola mposo ya nyama ; bapesi ye nkombo Ezau. | |
Gene | LinVB | 25:26 | Na nsima mosimi mpe abimi, asimbi litindi lya Ezau ; bapesi ye nkombo Yakob. Na mbotama ya bango Izaka asili akokisi mibu ntuku motoba. | |
Gene | LinVB | 25:27 | Bana bakoli ; Ezau ayebi mpenza koboma nyama, mpe azalaki kokende mingi o esobe. Yakob azalaki moto nye, akotikalaka mingi o ema. | |
Gene | LinVB | 25:28 | Izaka apusi kolinga Ezau, zambi alingi mingi kolia nyama ya bokila. Rebeka apusi kolinga Yakob. | |
Gene | LinVB | 25:30 | Alobi na Yakob : « Tika nalia bilei biye bya yo bya motane, nalembi mingi. » Yango wana bapesi ye nkombo Edom, lokola ‘ya motane’. | |
Gene | LinVB | 25:33 | Yakob azongisi : « Laya ndai sikasikawa. » Ezau alayi, bongo atekeli Yakob botomolo bwa ye. | |
Chapter 26
Gene | LinVB | 26:1 | Nzala enene, leka eye o eleko ya Abarama, eyei kongala o mokili. Izaka akei o Gerar o mokili mwa Abimelek, mokonzi wa ba-Filisti. | |
Gene | LinVB | 26:2 | Yawe abimeli ye, alobi : « Kokende o Ezipeti te, tikala kofanda o ekolo eye nakolakisa yo. | |
Gene | LinVB | 26:3 | Ofanda o mokili moye ; ngai nakozala na yo mpe nakobenisa yo, zambi nakopesa yo na bana ba yo mokili moye mobimba ; nakokokisa elako nalakelaka tata wa yo Abarama. | |
Gene | LinVB | 26:4 | Bankoko ba yo bakozala baike lokola minzoto mya likolo, mpe nakopesa bango mabelé maye manso. Bato ba bikolo binso bakozwa bolamu mpo ya bango, | |
Gene | LinVB | 26:5 | zambi Abarama atosaki ngai, atosaki maloba ma ngai mpe alandaki mitindo na mibeko mya ngai. » | |
Gene | LinVB | 26:7 | Bato ba mboka batuni ye mpo ya mwasi wa ye. Azongisi : « Azali ndeko wa ngai. » Abangi koloba ’te azali mwasi wa ye ; mbele bato ba mboka bakoboma ye mpo ya Rebeka, zambi azalaki mwasi kitoko. | |
Gene | LinVB | 26:8 | Asili afandi kuna mikolo mingi, mokolo moko Abimelek, mokonzi wa ba-Filisti, awa atali o lininisa, amoni ’te Izaka azalaki kozinga Rebeka ekopi. | |
Gene | LinVB | 26:9 | Abimelek abengi Izaka, alobi na ye : « Ntembe te, oyo azali mwasi wa yo ! Mpo nini olobaki ’te azali ndeko wa yo ? » Izaka azongisi : « Nakanisaki ’te okoki koboma ngai mpo ya ye, yango wana nalobaki bongo. » | |
Gene | LinVB | 26:10 | Abimelek alobi lisusu : « Osali biso nini ko ? Soko moto wa mboka ya biso alalaki na mwasi wa yo, mbele omemisi biso ngambo. » | |
Gene | LinVB | 26:11 | Abimelek apesi bato ba ye banso mobeko moye : « Tokoboma moto oyo akomeka kozala mobali oyo na mwasi wa ye mabe. » | |
Gene | LinVB | 26:12 | Izaka azalaki kokata bilanga mpe bobele o mobu mona azwi biloko ebele ; solo, Yawe abenisi ye, | |
Gene | LinVB | 26:13 | akomi moto monene. Mikolo minso azalaki kozwa biloko bya sika, akomi moto wa nkita mpenza. | |
Gene | LinVB | 26:14 | Akomi nkolo wa ngombe na bibwele mingi, mpe na basali ebele. Ba-Filisti bakomi koyokela ye zuwa. | |
Gene | LinVB | 26:18 | Izaka atimoli lisusu mabulu maye basali ba tata wa ye Abarama batimolaka mpe ba-Filisti bayaki kotondisa na mabelé nsima ya liwa lya Abarama ; apesi mango lisusu nkombo iye tata wa ye apesaka. | |
Gene | LinVB | 26:20 | Kasi bakengeli ba ngombe ba Gerar babandi koswana na bakengeli ba Izaka, balobi : « Mai maye mazali mai ma biso ! » Izaka atangi mai mana na nkombo Esek, zambi baswanisaki ye mpo ya mango. | |
Gene | LinVB | 26:22 | Alongwi mpe atimoli libulu lisusu. Sikawa baswanisi ye lisusu te ; apesi libulu lyango nkombo Rekobot, alobi : « Sikawa Yawe atikeli biso mabelé ; tokozwa biloko o mokili moye. » | |
Gene | LinVB | 26:24 | Yawe abimeli ye na butu, alobi : « Nazali Nzambe wa tata wa yo Abarama, obanga te, zambi ngai nazali na yo. Nakobenisa yo, nakopesa yo bana na bankoko, zambi nalingi kotombola mosaleli wa ngai Abarama. » | |
Gene | LinVB | 26:25 | Izaka atongi altare mpe abo-ndeli nkombo ya Yawe kuna. Apiki ema ya ye o esika ena, mpe basali ba ye batimoli libulu. | |
Gene | LinVB | 26:26 | Abimelek atiki Gerar mpo ya kokutana na Izaka ; ayei na kapita wa ye Akuzat mpe na mokonzi wa basoda ba ye Pikol. | |
Gene | LinVB | 26:27 | Izaka alobi na bango : « Ntina nini boyei epai ya ngai ? Bino bolingi ngai te mpe bobengani ngai o mboka ya bino. » | |
Gene | LinVB | 26:28 | Bazongisi : « Sikawa tomoni polele ’te Yawe azali na yo ; yango wana tolobi : Malamu biso na yo tolayelana ndai. Tolingi kokata bondeko na yo. | |
Gene | LinVB | 26:29 | Olaya ’te okosala biso mabe te, mpo biso tonyokoloki yo te, tosalaki yo se malamu mpe topesaki yo nzela ya kokende na boboto. Sikawa ozwi bobenisi bwa Yawe. » | |
Gene | LinVB | 26:31 | Na ntongontongo balayelani ndai. Na nsima Izaka atiki bango bakende ; bakabwani bongo na boboto. | |
Gene | LinVB | 26:32 | Se o mokolo mona basali ba Izaka bayei koyebisa ye mpo ya libulu batimolaki, balobi : « Tozwi mai. » | |
Gene | LinVB | 26:33 | Apesi libulu lyango nkombo Sabé. Tee lelo bakobengaka mboka ezali kuna Berseba, lokola ‘te : ‘Libulu lya ndai’. | |
Gene | LinVB | 26:34 | Ekokisi Ezau mibu ntuku inei, abali basi babale : moko Yeudit, mwana wa Beeri, mo-Eti ; mosusu Basmat, mwana wa Elon, mo-Eti lokola. | |
Chapter 27
Gene | LinVB | 27:1 | Izaka akomi mobange, miso ma ye makomi kolembe, azalaki komono lisusu te. Abengi Ezau, mwana wa ye wa liboso, alobi na ye : « Mwana wa ngai ! » Ezau alobi : « Ngai oyo ! » | |
Gene | LinVB | 27:4 | Na nsima olambela ngai bilei biye nalingi, pesa ngai nalia, bongo nabenisa yo liboso ’te nakufa. » | |
Gene | LinVB | 27:5 | Rebeka azalaki koyoka ntango Izaka azalaki kosolola na mwana wa ye Ezau. Bongo Ezau akei kobomela tata wa ye nyama o esobe. | |
Gene | LinVB | 27:6 | Rebeka alobi na mwana wa ye Yakob : « Nayokaki ’te tata wa yo alobaki na ndeko wa yo Ezau : | |
Gene | LinVB | 27:7 | ‘Yela ngai nyama ya zamba mpe lambela ngai nalia, na nsima nakobenisa yo o miso ma Yawe liboso ’te nakufa.’ | |
Gene | LinVB | 27:9 | Kende kotala etonga ya yo, kamatela ngai bana ntaba babale ba mafuta, nalambela tata wa yo bilei lokola ye alingi. | |
Gene | LinVB | 27:11 | Yakob alobi na mama wa ye Rebeka : « Tala, ndeko wa ngai Ezau azali na nsuki mingi o nzoto, ngai te. | |
Gene | LinVB | 27:12 | Awa tata wa ngai akosimba ngai, akoyeba ’te nakosi ye ; mbele akotombela ngai bobe esika ’te abenisangai. » | |
Gene | LinVB | 27:13 | Mamaazongisi : « Mwana wa ngai, mabe mana makwela ngai, yoka bobele monoko mwa ngai, kende kolukela ngai bana ba ntaba. » | |
Gene | LinVB | 27:14 | Yakob akei kokamata yango mpe apesi mama wa ye. Mama alambi bilei lokola tata akolingaka. | |
Gene | LinVB | 27:18 | Yakob akei epai ya tata wa ye, alobi : « Tata ! » Ye azongisi : « Ngai oyo, kasi yo nani, mwana wa ngai ? » | |
Gene | LinVB | 27:19 | Yakob alobi na tata wa ye : « Ngai Ezau, mwana wa yo wa liboso, nasali lokola otindaki ngai ; soko olingi, fanda mpe lia nyama eye nabomi, mpo ’te na nsima obenisa ngai. » | |
Gene | LinVB | 27:20 | Izaka alobi na mwana wa ye : « Mwana wa ngai, ndenge nini ozwi nyama noki boye ? » Yakob azongisi : « Yawe, Nzambe wa yo, asalisi ngai. » | |
Gene | LinVB | 27:21 | Izaka alobi na Yakob : « Yaka penepene nasimba yo, mwana wa ngai, nayeba soko ozali mwana wa ngai Ezau to te. » | |
Gene | LinVB | 27:22 | Yakob akei penepene na tata wa ye. Izaka asimbi ye mpe alobi : « Mongongo mosali mongongo mwa Yakob, kasi maboko lokola maboko ma Ezau. » | |
Gene | LinVB | 27:23 | Ayebi te ’te ezalaki Yakob, zambi maboko mazalaki na nsuki lokola maboko ma ndeko wa ye Ezau. Mpe abenisi ye. | |
Gene | LinVB | 27:25 | Izaka alobi : « Mwana, pesa ngai nyama eye obomi, nalia, bongo nabenisa yo. » Yakob apesi ye mpe tata alei. Na nsima apesi ye vino, tata ameli. | |
Gene | LinVB | 27:27 | Abelemi mpe azingi tata ekopi. Awa Izaka ayoki nsolo ya bilamba, abenisi ye, alobi : « Ntembe te, nsolo ya mwana wa ngai ezali lokola nsolo ya elanga eye Yawe abenisi. | |
Gene | LinVB | 27:28 | Nzambe anokisela yo mamio ma likolo, akabela yo mabelé makobota mbuma mingi ya mampa mpe ya vino. | |
Gene | LinVB | 27:29 | Bato ba bikolo bisusu basalela yo ; bato ba bikolo binso bafukamela yo. Zala mokonzi wa bandeko ba yo, bana ba mama wa yo bafukamela yo. Mabe makwela oyo akotombela yo bobe. Babenisa oyo alingi ’te ozwa bolamu. » | |
Gene | LinVB | 27:30 | Awa Izaka abenisi Yakob, bobele ntango Yakob atiki tata wa ye, Ezau ayei, auti bokila. | |
Gene | LinVB | 27:31 | Alambi bilei mpe ayeli tata wa ye byango. Alobi na ye : « Tata, teleme mpe lia nyama ngai mwana wa yo nabomaki, na nsima okoki kobenisa ngai ! » | |
Gene | LinVB | 27:32 | Tata wa ye Izaka atuni ye : « Yo nani ? » Ye azongisi : « Nazali mwana wa yo wa yambo, Ezau. » | |
Gene | LinVB | 27:33 | Izaka abangi mpe alengi nzoto mobimba, atuni : « Bongo nani akendeki bokila mpe ayelaki ngai nyama ? Nalei bilei bya ye liboso ’te okoma awa. Nabenisi ye, bongo abenemi seko. » | |
Gene | LinVB | 27:34 | Eyoki Ezau maloba ma tata, aleli makasi, ayoki motema mpasi. Alobi na tata wa ye : « Tata, benisa ngai mpe ! » | |
Gene | LinVB | 27:36 | Ezau azongisi : « Nkombo ya ye Yakob ezali ya mpamba te, asili akosi ngai mbala ibale. Abotoli ngai botomolo, mpe sikawa abotoli ngai bobenisi bwa tata ! » Abondeli tata : « Bongo, okoki kobenisa ngai mpe te ? » | |
Gene | LinVB | 27:37 | Izaka ayanoli Ezau : « Naluboli ye mokonzi wa yo, napesi ye bandeko ba ye banso basalela ye, natombeli ye mbuma ya mampa na vino ebele. Nasala nini lisusu mpo ya yo, mwana wa ngai ? » | |
Gene | LinVB | 27:38 | Ezau atuni lisusu : « Tata, okoki kobenisa se moto moko ? Benisa ngai mpe ! » Izaka akangi monoko, alobi eloko te, Ezau abandi kolela makasi. | |
Gene | LinVB | 27:39 | Bongo tata wa ye alobi : « Tala, okofanda o mabelé malamu te, mpe mamio makokitela mango te. | |
Gene | LinVB | 27:40 | Okobika bobele na mompanga, kasi okosalela ndeko wa yo. Kasi ntango okomibikisa okobwaka mokumba mwa ye. » | |
Gene | LinVB | 27:41 | Ezau akomi koyina Yakob mpo ya bobenisi bwa tata azwaki. Amilobeli o motema : « Mikolo tokolela tata mikomi penepene. Soko akufi nakoboma ndeko wa ngai Yakob. » | |
Gene | LinVB | 27:42 | Bayebisi Rebeka maloba ma mwana wa ye wa yambo ; abengi mwana wa ye wa nsima, Yakob, alobi na ye : « Ndeko wa yo Ezau alingi kosongisela yo mabe osalaki ye, alingi koboma yo. | |
Gene | LinVB | 27:45 | kin’o motema mwa ye mokokita ; ntango akobanda kobosana makambo osalaki ye, nakotinda moto moko aya koluka yo kuna. Mpo nini nabungisa bino babale o mokolo moko ? » | |
Chapter 28
Gene | LinVB | 28:1 | Izaka abengi Yakob mpe abenisi ye ; apesi ye malako, alobi : « Obala mwasi wa Kanana te. | |
Gene | LinVB | 28:2 | Kende o Padan-Aram epai ya Betuel, nkoko wa yo, oyo abotaki mama wa yo. Bala mwasi kuna, pono mwasi moko o kati ya bana ba Laban, noko wa yo. | |
Gene | LinVB | 28:3 | Nzambe wa bokasi bonso abenisa yo, asalisa yo mpo obota bana ebele, okoma bo-ngo lingomba linene lya bato. | |
Gene | LinVB | 28:4 | Apesa yo na bana mpe na bankoko ba yo bolamu boye alakelaka Abarama ; okoma nkolo wa ekolo eye esika okofanda, eye Nzambe apesaka Abarama. » | |
Gene | LinVB | 28:5 | Izaka atindi Yakob o esobe ya Padan-Aram, epai ya Laban, mwana wa Betuel, wa Aram, ndeko wa Rebeka, mama wa Yakob na Ezau. | |
Gene | LinVB | 28:6 | Ezau amoni ’te Izaka abenisaki Yakob mpe atindaki ye o Padan-Aram mpo ’te abala mwasi kuna. Ntango tata abenisaki Yakob alobaki : « Obala mwasi wa Kanana te. » | |
Gene | LinVB | 28:9 | Akei epai ya Ismael mpe abali mwasi mosusu, nkombo ’te Makalat. Azali mwana wa Ismael, nkoko wa Abarama mpe ndeko wa Nebayot ; akomi mbanda wa basi basusu ba ye. | |
Gene | LinVB | 28:11 | Awa moi mokiti, alingi kolala bobele o esika eye akomi. Akamati libanga, alalisi motó o libanga, mpe alali mpongi o esika ena. | |
Gene | LinVB | 28:12 | Aloti ndoto : amoni ebuteli etelemi o mabelé ; nsonge ya yango ekomi tee o mampata, banzelu ba Nzambe bazalaki kokita mpe kobuta wana. | |
Gene | LinVB | 28:13 | Yawe ayei koteleme pene na ye, alobi : « Nazali Yawe, Nzambe wa nkoko wa yo Abarama mpe Nzambe wa Izaka. Nakopesa yo mpe bankoko ba yo mabelé esika ozali kolala. | |
Gene | LinVB | 28:14 | Bana ba yo bakozala baike lokola zelo, bokopalangana kin’o Westi, Esti, Nordi mpe Sudi. Bato ba mabota manso ma nse bakozwa bolamu mpo ya yo mpe mpo ya bana ba yo. | |
Gene | LinVB | 28:15 | Ngai nazali na yo, nakobatela yo bipai binso okokende mpe nakosongisa yo o mokili moye ; nakotika yo te liboso ’te maye nalakelaki yo masalema. » | |
Gene | LinVB | 28:17 | Akomi kobanga, alobi : « Eye ezali esika ya nsomo ! Ezali bobele ndako ya Nzambe mpe ezibeli ya likolo. » | |
Gene | LinVB | 28:18 | Na ntongo mpenza Yakob atelemi, akamati libanga liye atiaki o nse ya motó, atelemisi lyango lokola likonzi, mpe asopeli lyango mafuta. | |
Gene | LinVB | 28:20 | Yakob alaki elako eye : « Soko Nzambe asalisi ngai mpe abateli ngai o nzela inso nakokende, soko apesi ngai bilei mpe elamba, | |
Gene | LinVB | 28:21 | soko nazongi lisusu o mboka ya tata wa ngai nzoto kolongonu, Yawe akozala Nzambe wa ngai. | |
Chapter 29
Gene | LinVB | 29:2 | O nzela amoni libulu lya mai o esobe ; penepene na libulu lina bitonga bisato bya mpata bilali wana. Mpata izalaki kozwa mai ma bomeli se o libulu lina. Nzokande monoko mwa libulu mokangemi na libanga linene. | |
Gene | LinVB | 29:3 | Ntango bibwele binso bisangani esika yoko, bake-ngeli balongoli libanga o monoko mwa libulu mpe bamelisi mpata mai ; na nsima bakangi lisusu libulu na libanga. | |
Gene | LinVB | 29:4 | Yakob atuni bakengeli ba mpata : « Bandeko, bino bouti wapi ? » Bazongisi : « Tosali bato ba Aran. » | |
Gene | LinVB | 29:6 | Atuni lisusu : « Laban azali malamu ? » Bazongisi : « Azali malamu ; tala kuna, mwana wa ye Rakele azali koya na etonga ya mpata. » | |
Gene | LinVB | 29:7 | Yakob alobi : « Moi mozali naino, ntango ya kosongisa mpata o lopango ekoki naino te. Bomelisa mpata mpe bosonga koleisa yango o esobe. » | |
Gene | LinVB | 29:8 | Kasi bango bayanoli : « Tokoki komelisa yango mai sikawa te, liboso bitonga binso bya mpata bisangana awa ; na nsima tokoki kolongola libanga o monoko mwa libulu mpo tomelisa mpata mai. » | |
Gene | LinVB | 29:9 | Ezalaki ye naino kosolola na bango, Rakele ayei na mpata ya tata wa ye, zambi azalaki mokengeli wa mpata. | |
Gene | LinVB | 29:10 | Awa Yakob amoni Rakele, mwana wa noko wa ye Laban, akei kolongola libanga o monoko mwa libulu lya mai mpe amelisi mpata ya noko wa ye Laban. | |
Gene | LinVB | 29:12 | Ayebisi Rakele ’te azalaki ndeko wa tata wa ye, mwana wa Rebeka. Rakele akei mbangu koyebisa tata wa ye. | |
Gene | LinVB | 29:13 | Eyoki Laban nkombo ya Yakob, mwana wa ndeko wa ye Rebeka, akei mbangu koyamba ye ; ayambi ye o maboko, azingi ye ekopi, mpe akei na ye o ndako. Yakob ayebisi ye makambo ma ye manso. | |
Gene | LinVB | 29:14 | Laban alobi na ye : « Solo, ozali makila moko na ngai ! » Bongo Yakob atikali epai ya ye sanza mobimba. | |
Gene | LinVB | 29:15 | Laban alobi na Yakob : Ata osali ndeko wa ngai, okoki kosalela ngai mpamba te. Yebisa ngai lifuta nini olingi kozwa. | |
Gene | LinVB | 29:18 | Yakob alingi Rakele. Azo-ngiseli Laban : « Nakosalela yo mibu nsambo, bongo nabala Rakele, mwana wa yo wa nsuka. » | |
Gene | LinVB | 29:19 | Laban alobi : « Eleki malamu nabalisa ye na yo esika ya kopesa ye na mompaya. Tikala awa. » | |
Gene | LinVB | 29:20 | Yakob asali mosala mibu nsa-mbo mpo ya kobala Rakele. Azalaki komono mibu mina nsambo lokola se mwa mikolo, zambi apusi kolinga Rakele. | |
Gene | LinVB | 29:21 | Na nsima Yakob alobi na Laban : « Nakokisi elaka ya ngai, pesa ngai mwasi wa ngai, nabala ye. » | |
Gene | LinVB | 29:23 | Kasi na mpokwa akamati mwana wa ye Lea mpe akei kotika ye o ndako ya Yakob ; Yakob ayambi ye lokola mwasi wa ye. | |
Gene | LinVB | 29:25 | Etani ntongo, Yakob akamwi awa amoni ’te ezalaki Lea. Alobi na Laban : « Osali ngai nini ko ? Nasalaki mosala mpo ya Rakele te ? Mpo nini okosi ngai ? » | |
Gene | LinVB | 29:26 | Laban azongisi : « O mboka ya biso tokobalelaka moto mwana wa nsima te, soko mwana wa yambo abali naino te. | |
Gene | LinVB | 29:27 | Poso eye sepela naino eyenga ya libala. Na nsima, nakopesa yo mpe mwasi mosusu, soko okosalela ngai mibu nsambo misusu. » | |
Gene | LinVB | 29:28 | Yakob asali bongo, afandi poso mobimba kosepela eyenga ya libala na Lea. Na nsima Laban apesi ye Rakele, azala mwasi wa ye. | |
Gene | LinVB | 29:30 | Bongo Yakob afandi mpe na Rakele ; ná Lea ná Rakele apusi kolinga Rakele. Asaleli noko wa ye mibu nsambo misusu. | |
Gene | LinVB | 29:31 | Yawe amoni ’te Yakob alingi Lea mingi te, bongo apesi Lea bana, kasi apesi Rakele te. | |
Gene | LinVB | 29:32 | Lea azwi zemi mpe aboti mwana mobali, apesi ye nkombo Ruben, alobi : « Yawe atali mawa ma ngai, sikawa mobali akolinga ngai. » | |
Gene | LinVB | 29:33 | Azwi zemi lisusu mpe aboti mwana mobali, alobi : « Solo, Yawe amoni ’te mobali alingi ngai te, bongo apesi ngai mpe mwana oyo » ; apesi ye nkombo Simeon. | |
Gene | LinVB | 29:34 | Azwi zemi lisusu mpe aboti mwana mobali, alobi : « Ntembe te, sikawa mobali akokangema na ngai, zambi naboteli ye bana babali basato » ; apesi mwana nkombo Levi. | |
Chapter 30
Gene | LinVB | 30:1 | EmoniRakele’te akoki kobotela Yakob ata mwana moko te, ayokeli ndeko wa ye Lea zuwa. Alobi na Yakob : « Sala ’te ngai mpe nabota, soki te, nakokufa ! » | |
Gene | LinVB | 30:2 | Yakob asiliki na Rakele mpe alobi : « Nakomi nde Nzambe ? Ye moto akangi libumu lya yo ! » | |
Gene | LinVB | 30:3 | Rakele alobi : « Kamata mosaleli wa ngai Bila, fanda na ye mpo abota. Abota o bibelo bya ngai, bongo mwana azala mwana wa ngai. » | |
Gene | LinVB | 30:6 | Rakele alobi : « Nzambe asali ngai malamu ; andimeli ngai mpe apesi ngai mwana mobali. » Yango wana apesi ye nkombo Dan. | |
Gene | LinVB | 30:8 | Rakele alobi : « Mpo ya Nzambe nawelani na motomolo wa ngai mpe nalongi ye » ; apesi mwana nkombo Neftali. | |
Gene | LinVB | 30:13 | Lea alobi : « Esengo enene, mpo basi bakopesa ngai longonya. » Apesi ye nkombo Aser. | |
Gene | LinVB | 30:14 | O eleko ya kobuka mbuma ya mampa, Ruben akei o bilanga mpe azwi ‘mbuma ya bolingi’, apesi yango na mama wa ye Lea. Rakele alobi na Lea : « Nabondeli yo, kabela ngai ‘mbuma ya bolingi’ ya mwana wa yo. » | |
Gene | LinVB | 30:15 | Lea azongisi : « Osili obotoli ngai mobali, ekoki boye ! Mpo nini olingi kobotolo ngai mpe ‘mbuma ya bolingi’ ya mwana wa ngai ? » Rakele alobi : « Malamu, lelo na butu mobali akende o ndako ya yo mpe ngai nazwa ‘mbuma ya bolingi’ ya mwana wa yo. » | |
Gene | LinVB | 30:16 | Ekomi mpokwa, Yakob ayei, auti o bila-nga. Lea abimi o ndako mpo ya koyamba ye, alobi na ye : « Lelo okolala o ndako ya ngai, zambi okomi ndanga mpo ya ‘mbuma ya bolingi’ ya mwana wa ngai. » Na butu bona Yakob alali na ye. | |
Gene | LinVB | 30:18 | Lea alobi : « Nzambe afuti ngai, zambi napesi mobali wa ngai mosaleli wa ngai » ; apesi ye nkombo Izakar. | |
Gene | LinVB | 30:20 | Alobi : « Nzambe akabeli ngai likabo kitoko, sikawa mobali wa ngai akopesa ngai lokumu, zambi naboteli ye bana babali motoba. » Apesi mwana nkombo Zabulon. | |
Gene | LinVB | 30:25 | Awa Rakele aboti Yosefu, Yakob alobi na Laban : « Pesa ngai nzela nazonga epai ya ngai, o ekolo ya ngai. | |
Gene | LinVB | 30:26 | Pesa ngai bana na basi ba ngai, baye nasalelaki yo mosala mpo nazwa bango, bongo nakende. Oyebi malamu ’te nasalelaki yo mingi. » | |
Gene | LinVB | 30:27 | Kasi Laban alobi na ye : « Soko olingi ngai solo, yoka naino : Nayebi ’te Yawe abenisi ngai mpo ya yo. » | |
Gene | LinVB | 30:28 | Abakisi maloba maye : « Yebisa ngai lifuta nini olingi napesa yo, nakopesa lyango. » | |
Gene | LinVB | 30:29 | Yakob azongisi : « Yo moko oyebi boniboni nasalelaki yo, mpo ya mosala mwa ngai bibwele bya yo bikomi mingi. | |
Gene | LinVB | 30:30 | Liboso ozalaki na biloko mingi te, awa ngai nabandi mosala biloko bikomi mingi mpenza, mpe Yawe abenisi yo. Mokolo nini nakosala mosala mpo ya libota lya ngai moko ? » | |
Gene | LinVB | 30:31 | Laban ayanoli : « Nafuta yo nini ? » Yakob azongisi : « Ofuta ngai eloko te. Soko ondimi kosala lokola nakoloba, ngai mpe nakondima kokengele bibwele bya yo. | |
Gene | LinVB | 30:32 | Tala lelo etonga mobimba ya bibwele bya yo. Longola mpata inso izali na nzoto eindo to matono matono, na mpe ntaba inso izali na matono. Nakozwa yango lokola lifuta lya ngai. | |
Gene | LinVB | 30:33 | Bongo bosembo bwa ngai bokomonono na nsima. Mokolo okoya kotala bibwele bya ngai, soko omoni ntaba ezangi matono to mpata ezali moindo te, okoki koloba ’te nakosi ; wana nakondima ’te okangi ngai moyibi. » | |
Gene | LinVB | 30:35 | Se mokolo mona Laban alongoli ntaba inso ya babali mpe ya basi, iye izali na nzoto matono matono to nzela nzela ná mpe mpata iindo inso. Apesi yango na bana ba ye moko. | |
Gene | LinVB | 30:36 | Akei kofanda epai esusu ; kati ya ye na Yakob nzela ezalaki elai lokola mobembo mwa mikolo misato. Mpe Yakob azalaki koleisa bibwele bya Laban biye bitikalaki. | |
Gene | LinVB | 30:37 | Yakob akamati bitapi bibesu bya nzete ya peuplier, amandier na platane. Alongoli byango lomposo bisika bisika, bikomi milongo milongo : mpembe na miindo. | |
Gene | LinVB | 30:38 | Na nsima atii bitapi biye o bisika bibwele bikoya komele mai, bibwele bikomi mpe kolukana. | |
Gene | LinVB | 30:39 | Mpe lokola bizalaki kosangisa nzoto penepene na bitapi bina, biboti bana ba nzoto matono matono, bisusu nzoto nzela nzela. | |
Gene | LinVB | 30:40 | Na nsima Yakob asali mayele mpo ’te mpata basi inso o etonga ya Laban iye ikoki kobota bana, iyebana na mpata babali izali na nzoto nzela nzela o etonga ya ye. Bongo azwi nyama mingi, asangisi yango na bibwele bya Laban te. | |
Gene | LinVB | 30:41 | Mbala inso Yakob amoni nyama ya nzoto ekasi isalaki kolukana, atii bitapi o boso bwa miso ma nyama yango, o bilielo mpo ’te isangisa nzoto penepene na bitapi bina. | |
Gene | LinVB | 30:42 | Soko izalaki na nzoto makasi te, atii byango te, Laban azwi bongo bibwele bya nzoto etau, Yakob biye bya nzoto makasi. | |
Chapter 31
Gene | LinVB | 31:1 | Yakob ayoki ’te bana ba Laban bazalaki koloba : « Yakob akamati biloko binso bizalaki na tata wa biso ; akomi na biloko mingi mpo ya tata wa biso. » | |
Gene | LinVB | 31:3 | Yawe alobi na Yakob : « Zonga o mokili mwa bankoko ba yo epai ya bandeko ba yo ; ngai nakozala na yo. » | |
Gene | LinVB | 31:5 | Alobi na bango : « Nazali komono ’te tata wa bino azali lisusu malamu na ngai te lokola kala, kasi Nzambe wa tata wa ngai asalisaki ngai. | |
Gene | LinVB | 31:7 | Tata wa bino akosaki ngai, abongolaki lifuta lya ngai mbala zomi, kasi Nzambe alingisi ye te ’te asala ngai mabe. | |
Gene | LinVB | 31:8 | Ntango alobaki : « Nyama ya nzoto matono matono ikozala lifuta lya yo », nyama inso ibotaki bana ba nzoto matono matono. Ntango alobaki : « Nyama inso izali na nzoto nzela nzela ikozala lifuta lya yo », nyama inso ibotaki bana ba nzoto nzela nzela. | |
Gene | LinVB | 31:10 | Ekomaki ntango nyama ikolukanaka mpo ya kobota nalotoki ndoto, natombolaki miso, namonoki ’te ntaba babali, iye izalaki koluka ntaba basi, inso izalaki nzoto matono matono to nzela nzela. | |
Gene | LinVB | 31:12 | Alobaki : ‘Tombola miso mpe tala : ntaba babali izali kosangisa nzoto na ntaba basi izali na matono to na nzoto nzela nzela ; namonoki makambo manso Laban asalaki yo. | |
Gene | LinVB | 31:13 | Ngai nazali Nzambe, oyo abimelaki yo o Betel, esika osopelaki libanga mafuta mpe olakelaki ngai elako. Sikawa teleme, longwa o ekolo eye mpe zonga o ekolo ya yo’. » | |
Gene | LinVB | 31:14 | Rakele na Lea bazongiseli ye : « Biso tokozwa ndambo ya lisango o ndako ya tata wa biso lisusu te. | |
Gene | LinVB | 31:15 | Ye moko azali kotala biso lokola bampaya, zambi ateki biso mpe alei mbongo ye moko. | |
Gene | LinVB | 31:16 | Solo, biloko binso Nzambe abotoli tata wa biso, bikomi bya biso moko mpe bya bana ba biso. Yo, sala bobele lokola Nzambe alobelaki yo. » | |
Gene | LinVB | 31:18 | mpe atambwisi bibwele bya ye o liboso lya ye, biye azwaki o esobe ya Padan-Aram ; akei na byango epai ya tata wa ye Izaka o mokili mwa Kanana. | |
Gene | LinVB | 31:19 | Ebimaki Laban mpo ya kokata nsuki ya mpata ya ye, Rakele akamati bikeko bya libota bizalaki o ndako ya tata wa ye. | |
Gene | LinVB | 31:21 | Akimi na biloko bya ye binso, akei mpe akatisi ebale Efrate. Alandi nzela epai ya ngomba Galaad. | |
Gene | LinVB | 31:23 | Laban akamati bandeko ba ye mpe alandi Yakob mikolo nsambo tee akuti ye o ngomba Galaad. | |
Gene | LinVB | 31:24 | Nzambe abimeli Laban, moto wa Aram, na ndoto mpe alobi na ye : « Keba ’te oloba na Yakob likambo lyoko lya mabe to lya malamu te. » | |
Gene | LinVB | 31:25 | Laban azwi Yakob asili kopika ema o ngomba. Laban na bandeko ba ye bazali se bongo. Batelemisi ema o ngomba Galaad. | |
Gene | LinVB | 31:26 | Laban alobi na Yakob : « Mpo nini okimi ngai na bonkutu mpe okei na bana ba ngai lokola baombo nsima ya etumba ? | |
Gene | LinVB | 31:27 | Ntina nini obombeli ngai likambo liye mpe oyebisi ngai te ? Soko oyebisaki ngai, mbele nayaki kotika yo na esengo mpe na nzembo, na mbonda mpe na nzenze ! | |
Gene | LinVB | 31:28 | Oboyaki napesa bana ba ngai babali na basi mbote ya bokabwani ! Solo, osalaki bozoba ! | |
Gene | LinVB | 31:29 | Soko nalingi, nakoki kosala yo mabe ; kasi o butu boleki Nzambe wa bankoko ba yo alobaki na ngai : ‘Okeba ’te oloba na Yakob likambo lyoko lya mabe to lya malamu te’. | |
Gene | LinVB | 31:30 | Okendeki zambi oyokaki mposa enene ya komono ndako ya tata wa yo ! Kasi mpo nini oyibi bikeko bya ngai ? » | |
Gene | LinVB | 31:32 | Kasi moto oyo akozwama na bikeko bya banza-mbe ba yo, akobika te. O miso ma bandeko banso, tala soko bikeko bya yo bizali awa, mpe kamata byango. » Yakob ayebi te ’te Rakele ayibaki byango. | |
Gene | LinVB | 31:33 | Laban akei koluka o ema ya Lea, na nsima akei o ema ya basaleli babale ; kasi azwi eloko te. Abimi o ema ya Lea mpe akoti o ema ya Rakele. | |
Gene | LinVB | 31:34 | Kasi Rakele akamataki bikeko bya ndako. Atiaki byango o libenga lya kamela mpe afandeli byango. Laban aluki o ema mobimba kasi azwi eloko te. | |
Gene | LinVB | 31:35 | Rakele alobi na tata wa ye : « Mokonzi, osilika te, nakoki koteleme mpo ya yo te, zambi nazali na mpasi eye biso basi tokosalaka na yango. » Laban aluki mingi, kasi azwi bikeko bya ye te. | |
Gene | LinVB | 31:36 | Motema mwa Yakob moyei móto mpenza, alemwi na Laban ; agangeli ye : « Nasala nini ? Okangi ngai na likambo nini ? Olandi ngai na makasi boye ! | |
Gene | LinVB | 31:37 | Oluki o kati ya biloko bya ngai binso, ozwi nde eloko yoko ya ndako ya yo ? Lakisa yango, bandeko ba ngai na ba-ndeko ba yo bamono, bongo bakata likambo lya biso ! | |
Gene | LinVB | 31:38 | O mibu ntuku ibale nasalaki o ndako ya yo ata mpata yoko to ntaba yoko ebotaki libota libe te. Ya etonga ya yo naliaki mpata mobali yoko te. | |
Gene | LinVB | 31:39 | Mpata iye iliamaki na nyama ya zamba, ngai moko nazalaki kofuta yango. Iye bayibelaki ngai na moi to na butu, osengisaki ngai ’te nafuta yo yango. | |
Gene | LinVB | 31:40 | Nazalaki koyoka molunge na moi, nazalaki koyoka mpio na butu ; nazalaki kozwa mpongi noki te. | |
Gene | LinVB | 31:41 | Bobele bongo nafandaki o ndako ya yo mibu ntuku ibale mobimba. Nasalelaki yo mosala mibu zomi na minei mpo ya kobala bana ba yo, nasalaki lisusu mibu motoba mpo ya kozwa ndambo ya bibwele bya yo, mpe obongolaki lifuta lya ngai mbala zomi. | |
Gene | LinVB | 31:42 | Soko Nzambe wa tata wa ngai, ye Nzambe wa Abarama, mpe Nzambe wa nsomo wa Izaka asalisaki ngai te, mbele nazongaki o mboka maboko mpamba. Kasi Nzambe amonoki mpasi ya ngai ná mosala mwa maboko ma ngai ; yango wana o butu boye akati likambo. » | |
Gene | LinVB | 31:43 | Laban azongiseli Yakob : « Bana basi bazali bana ba ngai, bana ba bango bazali bana ba ngai, bibwele bizali bibwele bya ngai : binso ozali komono awa, bizali bya ngai. Nakoki nde kosala bango mpe bana ba bango mabe ? | |
Gene | LinVB | 31:46 | Alobi na bandeko ba ye : « Bolokoto mabanga. » Balokoti maba-nga mpe basangisi mango esika yoko, mpe balei o esika eye basa-ngisi mabanga. | |
Gene | LinVB | 31:48 | Laban alobi : « Mabanga maye tosangisi esika yoko mazala elembo ’te biso na yo toyokani lelo. » Yango wana atangi mango Galed, | |
Gene | LinVB | 31:50 | Soko okonyokolo bana basi ba ngai, mpe okokamata basi basusu, yeba ’te, ata moto moko ayebi yango te, Yawemei akozala kati ya biso na yo. » | |
Gene | LinVB | 31:51 | Laban alobi na Yakob : « Tala mabanga nasangisi mpo ya kotia ndelo kati ya biso babale ; tala mpe likonzi natelemisi. | |
Gene | LinVB | 31:52 | Mabanga mana mazala ndelo ; nakoki koleka mango na mayele mabe te mpo nakoma epai ya yo, yo mpe okoki koleka mango te mpo okoma epai ya ngai. | |
Gene | LinVB | 31:53 | Nzambe wa Abarama mpe Nzambe wa Nakor bazala bazuzi ba biso. » Yakob alayi na nkombo ya ‘Nzambe wa nsomo’ wa Izaka, tata wa ye. | |
Chapter 32
Gene | LinVB | 32:1 | Laban alongwi o mbeto na ntongo ntongo. Azingi bana babali na bana basi ba ye ekopi, mpe abenisi bango. Na nsima akei mpe azongi o mboka ya ye. | |
Gene | LinVB | 32:3 | Emoni Yakob banzelu, alobi : « Ezali nganda ya Nzambe », mpe apesi esika ena nkombo Makanayim. | |
Gene | LinVB | 32:5 | Atindi bango boye : « Boyebisa mokonzi ’te ndeko wa ye Yakob atindeli ye maloba maye : Nafandaki epai ya Laban tee lelo. | |
Gene | LinVB | 32:6 | Nakomi na ngombe mpe na mpunda, na basali babali na basali basi. Nayebisi mokonzi wa ngai bongo mpo ayamba ngai malamu ! » | |
Gene | LinVB | 32:7 | Bantoma bazongi epai ya Yakob, balobi : « Tokendeki epai ya ndeko wa yo Ezau. Azali koya kokutana na yo, akoya na bato nkama inei. » | |
Gene | LinVB | 32:8 | Yakob abangi mingi, nsomo ekangi ye. Akaboli bato, ngombe, mpata na kamela ya ye ndambo ndambo. | |
Gene | LinVB | 32:9 | Amilobeli : « Soko Ezau ayei mpe abebisi ndambo yoko, ndambo esusu ndezwi ntango ya komibikisa. » | |
Gene | LinVB | 32:10 | Yakob agangi : « E Nzambe wa nkoko wa ngai Abarama, Nzambe wa tata wa ngai Izaka, ozali Yawe oyo alobaki na ngai : Zonga o mokili mwa yo, epai ya bandeko ba yo, nakosala yo se malamu. | |
Gene | LinVB | 32:11 | Ngai mosaleli wa yo, nabongi soki te ’te nazwa makabo opesaki ngai, nazwa bolamu olakisaki ngai. Ntango natikaki mokili mwa ngai mpe nakatisaki Yordane, nazalaki na lingenda o maboko, eloko esusu te ; mpe tala sikawa nakaboli bato ba ngai mangomba mangomba. | |
Gene | LinVB | 32:12 | Nabondeli yo, obikisa ngai o maboko ma ndeko wa ngai Ezau. Nazali kobanga ’te akoya koboma biso banso, ná mama ná bana. | |
Gene | LinVB | 32:13 | Nzokande yo moto olobaki na ngai : Nakosala yo malamu, nakopesa yo bana ebele lokola zelo o libongo lya mbu ; moto moko akoki kotanga bango te, zambi baleki mingi. » | |
Gene | LinVB | 32:14 | O butu bona Yakob atikali se wana. Aponi nyama ya etonga ya ye mpo abonzela ndeko wa ye Ezau. | |
Gene | LinVB | 32:15 | Akamati ntaba basi nkama ibale, ntaba babali ntuku ibale, mpata basi nkama ibale mpe mpata babali ntuku ibale, | |
Gene | LinVB | 32:16 | kamela basi ntuku isato izalaki konungisa bana na mpe bana ba yango, ngombe basi ntuku inei na ngombe babali zomi, mpunda basi ntuku ibale na bana mpunda zomi. | |
Gene | LinVB | 32:17 | Apesi nyama inso na basali ba ye, moko moko akende na etonga ya ye. Alobi na basali : « Bino boleka o liboso lya ngai, botika mwa ntaka o kati ya bitonga. » | |
Gene | LinVB | 32:18 | Apesi moto wa liboso mobeko moye : « Soko ndeko wa ngai Ezau akokutana na yo mpe akotuna yo : « Ozali moto wa nani ? Ozali kokende wapi ? Nyama iye ozali kotambwisa ya nani ? » | |
Gene | LinVB | 32:19 | okozongisela ye : “Izali ya ndeko wa yo Yakob, atindeli mokonzi wa ye Ezau yango ; ye moko azali koya nsima ya biso”. » | |
Gene | LinVB | 32:20 | Atindi se bongo na moto wa babale, na moto wa basato mpe na bakengeli banso ba bitonga : « Bokoloba na Ezau se bongo ntango bokoswana na ye, | |
Gene | LinVB | 32:21 | bokoloba : Ndeko wa yo Yakob azali kolanda biso nsima. » Mpo akanisi : « Na libonza nakotinda liboso, nakosepelisa ye. Ntango tokokutana nsima, mbele akoyamba ngai malamu. » | |
Gene | LinVB | 32:23 | O butu bona Yakob atelemi, akamati basi ba ye babale, basaleli basi babale, na mpe bana ba ye zomi na moko mpe akatisi mai ma Yabok. | |
Gene | LinVB | 32:26 | Awa amoni ’te akoki kokweisa Yakob te, atuti ye o loketo mpe lokolo lokomi kotengeme ntango bazalaki kobunda. | |
Gene | LinVB | 32:27 | Na nsima alobi na Yakob : « Tika ngai sikawa, mpo ntongo esili etani. » Yakob azongisi : « Nakotika yo te, liboso ’te obenisa ngai. » | |
Gene | LinVB | 32:29 | Motoona alobi : « Nkombo ya yo ekozala lisusu Yakob te, kasi Israel, zambi obundaki na Nzambe mpe na bato, mpe olongaki. » | |
Gene | LinVB | 32:30 | Na nsima Yakob atuni ye : « Yebisa ngai nkombo ya yo. » Ye azo-ngisi : « Mpo nini otuni nkombo ya ngai ? » Mpe abenisi ye o esika ena. | |
Gene | LinVB | 32:31 | Yakob apesi esika ena nkombo Penuel, alobi : « Namonoki Nzambe na miso, nzokande nakufi te. » | |
Gene | LinVB | 32:32 | Ntango Yakob atiki Penuel moi mobandi kotana, azalaki kotengwa mpo ya mpasi o loketo. | |
Chapter 33
Gene | LinVB | 33:1 | Yakob átombola miso, amoni ’te Eza azalaki koya elongo na bato nkama inei. Akaboli bana kati ya Lea, Rakele na basaleli basi babale. | |
Gene | LinVB | 33:2 | Atii basaleli basi na bana ba bango liboso, nsima Lea na bana ba ye, o nsuka Rakele na Yosefu. | |
Gene | LinVB | 33:3 | Ye moko aleki liboso lya bango mpe agumbami kin’o nse mbala nsambo liboso ’te akoma o miso ma ndeko wa ye. | |
Gene | LinVB | 33:4 | Kasi Ezau apoti mbangu mpo ya kokutana na ye, ayambi ye na maboko mpe azingi ye ekopi ; bango babale baleli. | |
Gene | LinVB | 33:5 | Ezau átombola miso, amoni basi na bana bazalaki koya, atuni : « Bango banani ? » Yakob azongisi : « Bazali bana Nzambe akabeli ngai, mosaleli wa yo. » | |
Gene | LinVB | 33:7 | Lea abelemi elongo na bana ba ye, bango mpe bakumbameli ye ; na nsima Yosefu na Rakele babelemi mpe bakumbameli ye lokola. | |
Gene | LinVB | 33:8 | Ezau atuni : « Olingi kosala nini na biloko binso namonoki o nzela ? » Yakob azongisi : « Ezali mpo ’te nazwa bolamu o miso ma yo, mokonzi wa ngai. » | |
Gene | LinVB | 33:9 | Ezau alobi lisusu : « Ndeko wa ngai, nazali na biloko bya ngai ; biloko bya yo bitikala bya yo moko. » | |
Gene | LinVB | 33:10 | Kasi Yakob alobi : « Te, nabondeli yo, soko nazwi bolamu o miso ma yo, oyamba libonza liye lya ngai. Ya solo, namoni elongi ya yo lokola bakomonoko elongi ya Nzambe, zambi oyambaki ngai malamu. | |
Gene | LinVB | 33:11 | Bongo yamba libonza nayeli yo. Nzambe asali ngai malamu, nazangi eloko te. » Awa abondeli ye mingi, Ezau ayambi mabonza mana. | |
Gene | LinVB | 33:13 | Kasi Yakob azongisi : « Mokonzi, oyebi ’te bana bazali batau, nazali mpe na mpata mpe na ngombe izali konungisa bana ; soko natambwisi yango na makasi, ata mokolo moko mpamba, bibwele binso bikokufa. | |
Gene | LinVB | 33:14 | Malamu, yo mokonzi okende liboso lya ngai mosaleli wa yo : nakokende malembe, lokola ekoki na etonga ekotambola liboso lya ngai, mpe na bana ba ngai, tee nakokoma o Seir, mboka ya mokonzi wa ngai. » | |
Gene | LinVB | 33:15 | Ezau alobi : « Nakotika ndambo ya bato ba ngai batikala na yo. » Kasi Yakob azongisi : « Ntina nini ? Soko nazwi bolamu o miso ma mokonzi wa ngai, ekoki ! » | |
Gene | LinVB | 33:17 | Yakob akei epai ya Sukot, amitongeli ndako, atongeli mpe bibwele bya ye mianza ; yango wana bapesi esika ena nkombo Sukot, lokola ’te « ndako ya nzete ». | |
Gene | LinVB | 33:18 | Elongwi Yakob o Padan-Aram, akomi o mboka Sikem o mokili mwa Kanana nzoto kolongonu. Apiki nganda penepene na mboka. | |
Gene | LinVB | 33:19 | Asombi eteni ya mabelé esika apikaki ema ya ye, afuti bana ba Amor, tata wa Sikem, mitako monkama. | |
Chapter 34
Gene | LinVB | 34:1 | Dina, mwana mwasi oyo Lea abotelaki Yakob, abimi mpo akende kotala bilenge basi ba mboka. | |
Gene | LinVB | 34:2 | Sikem, mwana wa mo-Ivi Amor, mokonzi wa ekolo, amoni ye, akangi ye na makasi mpe abebisi ye. | |
Gene | LinVB | 34:3 | Apesi motema mobimba na Dina, mwana wa Yakob, alingi elenge mwasi oyo mingi mpenza mpe aluki kokutana na ye. | |
Gene | LinVB | 34:4 | Sikem ayebisi yango na tata wa ye Amor, alobi : « Balela ngai elenge mwasi oyo, azala mwasi wa ngai. » | |
Gene | LinVB | 34:5 | Yakob ayoki ’te Sikem abebisaki mwana wa ye Dina, kasi awa bana babali ba ye bazalaki kokengele bibwele o esobe, alobi eloko te tee mokolo bango bayei. | |
Gene | LinVB | 34:7 | Bana ba Yakob bayoki yango ntango bauti o bilanga ; bayoki mabe mpenza mpe bakomi na nkanda enene mpo Sikem, awa abebisaki mwana wa Yakob, asalaki likambo lya nsomo : ekoki kosalema o Israel te ! | |
Gene | LinVB | 34:8 | Amor alobi na bango : « Mwana wa ngai Sikem alingi ndeko wa bino mingi mpenza, nasengi bino, bobalisa ye mwana wa bino. | |
Gene | LinVB | 34:9 | Tokoma bandeko mpo ya libala. Bopesa biso bana basi ba bino, biso mpe tokopesa bino baye ba biso. | |
Gene | LinVB | 34:10 | Bokofanda na biso esika yoko, bokoleka nzela inso bolingi, bokofanda esika bolingi. » | |
Gene | LinVB | 34:11 | Sikem alobi na tata mpe na bandeko ba elenge mwasi : « Soko bondimeli ngai, nakopesa bino manso bokosenge. | |
Gene | LinVB | 34:12 | Bokatela ngai motuya monene lokola mosolo mwa libala mpe likabo lya libala, nakofuta lokola bokosenge ngai ; kasi botikela ngai mwana mwasi. » | |
Gene | LinVB | 34:13 | Bana ba Yakob bayanoli Sikem na tata wa ye Amor, nzokande balobi na ye na mayele, zambi abebisaki lokumu la ndeko wa bango Dina. | |
Gene | LinVB | 34:14 | Balobi : « Tokoki kondimela yo te, zambi tokoki kopesa ndeko wa biso te na mobali akatemi nzoto te, epai ya biso ezali likambo lya nsoni. | |
Gene | LinVB | 34:16 | Tokobalisa bino bana basi ba biso, mpe tokobala baye ba bino, tokofanda epai ya bino mpe tokokoma ekolo yoko. | |
Gene | LinVB | 34:17 | Soko bondimi te mpe bolingi kokatisa nzoto te, biso tokolongwa awa na mwana wa biso. » | |
Gene | LinVB | 34:19 | Elenge mobali azili te mpo asala yango, mpo alingi mwana wa Yakob mingi, mpe o ndako ya tata wa ye azalaki moto monene. | |
Gene | LinVB | 34:20 | Amor na mwana wa ye Sikem bakei o esika bakosambaka makambo ma mboka ; balobi na bana mboka boye : | |
Gene | LinVB | 34:21 | « Bato baye bandimi biso. Ebongi bafanda o mokili mwa biso, basala misala mya bango. Mokili mwa biso mosala mpe mwa bango. Biso tobala bana ba bango, bango mpe babala bana ba biso. | |
Gene | LinVB | 34:22 | Kasi bakondima kofanda na biso esika yoko, mpe kokoma na biso ekolo yoko bobele soko biso banso tondimi kokatisa nzoto lokola ekosalemaka epai ya bango. | |
Gene | LinVB | 34:23 | Bitonga, biloko mpe nyama ya bango inso ikosala ya biso ; bongo tondima likambo lyango mpo ’te batikala epai ya biso. » | |
Gene | LinVB | 34:24 | Bato banso bazalaki o esika ya bosambi, bayoki maloba ma Amor mpe ma mwana wa ye Sikem, mpe babali banso bakatisi nzoto. | |
Gene | LinVB | 34:25 | Nsima ya mikolo misato, awa babali banso bazalaki naino na mpota, bana babale ba Yakob babotami na Dina mama moko, Simeon na Levi, bayingeli o mboka, mopanga o maboko, mpe babomi babali banso. Moko te akokaki komibatela. | |
Gene | LinVB | 34:27 | Bana ba Yakob babomi baye bazoki mpota mpe babotoli biloko binso bya mboka, zambi moko wa bango abebisaki ndeko wa bango. | |
Gene | LinVB | 34:29 | Babotoli biloko bya bango binso, bakangi bana na basi ba bango, bayibi biloko binso o ndako ya bango. | |
Gene | LinVB | 34:30 | Yakob alobi na Simeon mpe na Levi : « Botindi ngai o nzela ya mpasi awa bokomisi ngai moto mabe o miso ma bato ba ekolo, ba-Kanana na ba-Perisi. Nazali se na mwa ndambo ya bato ; bango bakoyokana sikawa mpo ya kobundisa ngai mpe bakolonga ngai. Bakoboma ngai na libota lya ngai mobimba. » | |
Chapter 35
Gene | LinVB | 35:1 | Nzambe alobi na Yakob : « Teleme, kende o Betel mpe fanda kuna. Nzambe oyo abimelaki yo ntango okimaki ndeko wa yo Ezau, otongela ye altare kuna. » | |
Gene | LinVB | 35:2 | Yakob alobi na bandeko mpe na banso bazalaki na ye : « Bolongola bikeko bya banzambe basusu bisali na bino, bomipetola, bolata bilamba bya sika. | |
Gene | LinVB | 35:3 | Tokende o Betel ! Kuna nakotongela Nzambe altare, andimelaki ngai ntango nayokaki motema nsomo mpe asalisaki ngai o mobembo. » | |
Gene | LinVB | 35:4 | Bapesi Yakob bikeko binso bya banzambe ba lokuta ná mpe biloko bya matoi. Yakob akundi byango o nse ya gbukulu penepene na Sikem. | |
Gene | LinVB | 35:5 | Balongwi o esika ena mpe nsomo ya Yawe ekiteli mboka ya penepene. Bato ba mboka balandi bana ba Yakob te. | |
Gene | LinVB | 35:6 | Yakob, elongo na bato ba ye banso, akomi o Luz o mokili mwa Kanana, lokola ’te Betel. | |
Gene | LinVB | 35:7 | Kuna atongi altare mpe apesi esika ena nkombo Betel, mpo Nzambe abimelaki ye kuna ntango akimaki ndeko wa ye. | |
Gene | LinVB | 35:8 | O ntango ena Debora, mobokoli wa Rebeka awei. Bakundi ye o nse ya gbukulu o Sudi ya Betel. Yakob apesi nzete ena nkombo ‘Nzete ya lilaka’. | |
Gene | LinVB | 35:10 | Alobi na ye : « Nkombo ya yo Yakob, kasi bakobenga yo lisusu na nkombo ena te, napesi yo nkombo ya sika : Israel. » Bongo abengi ye na nkombo ya sika Israel. | |
Gene | LinVB | 35:11 | Nzambe alobi na ye : « Nazali El Shaddai. Obota bana mingi, bokoma ebele. Okoma nkoko wa ekolo mobimba, nkoko wa lisanga lya bikolo biike ; okobota bakonzi banene. | |
Gene | LinVB | 35:12 | Nakopesa yo mokili moye napesaki Abarama na Izaka. Na nsima nakopesa mwango na bana ba yo. » | |
Gene | LinVB | 35:14 | Yakob atelemisi libanga o esika Nzambe asololaki na ye ; o libanga lina abonzi libonza ; asopeli yango mafuta. | |
Gene | LinVB | 35:16 | Balongwi o Betel. Ekomi bango penepene na Efrata, Rakele aboti. Kobota ya ye ezalaki na kwokoso. | |
Gene | LinVB | 35:17 | Ntango alingi abota na mpasi boye, mwasi mobotisi alobi na ye : « Kanga motema, oboti lisusu mwana mobali. » | |
Gene | LinVB | 35:18 | Kasi mama akomi kokata motema. Liboso ’te abenda mpema apesi ye nkombo Ben-Oni, lokola ‘Mwana wa lilaka’. Kasi tata apesi ye nkombo Benyamin lokola ‘Mwana wa esengo’. | |
Gene | LinVB | 35:20 | Yakob atelemisi libanga o lilita lya ye ; libanga lya lilita lya Rakele lisali wana tee lelo. | |
Gene | LinVB | 35:22 | Ntango Israel afa-ndi wana, Ruben akei kolala na Bila, makango wa tata wa ye ; Israel ayoki mpo yango. Bana ba Yakob bazalaki zomi na babale. | |
Gene | LinVB | 35:23 | Bana ba Lea : Ruben, mwana wa liboso wa Yakob, na nsima Simeon, Levi, Yuda, Izakar na Zabulon. | |
Gene | LinVB | 35:26 | Bana ba Zilpa, mosaleli wa Lea : Gad na Aser. Baboteli Yakob bana babali baye o Padan-Aram. | |
Gene | LinVB | 35:27 | Yakob akomi epai ya tata wa ye Izaka o Mambre kuna o Kiriat-Arba, ezali Ebron, esika Abarama na Izaka bazalaki kofanda. | |
Chapter 36
Gene | LinVB | 36:2 | Ezau aponoki basi o kati ya bilenge basi ba Kanana. Nkombo ya bango : Ada, mwana wa mo-Iti Elon ; Olibama, mwana wa Ana, nkoko wa Sibeon, moto wa Kor, | |
Gene | LinVB | 36:5 | Olibama aboti Yeus, Yalam na Kora. Baboteli Ezau bana babali baye o mokili mwa Kanana. | |
Gene | LinVB | 36:6 | Ezau atiki ndeko wa ye Yakob, akei o ekolo esusu, na basi, bana babali na bana basi, bato banso ba ndako, bibwele na mpunda inso, na mpe biloko binso azwaki o mokili mwa Kanana. | |
Gene | LinVB | 36:7 | Lokola bazalaki na biloko mingi, bakoki kofanda esika yoko te, mokili mwa bango mokoki na bango babale te, mpo biloko bilekaki mingi. | |
Gene | LinVB | 36:10 | Nkombo ya bana ba Ezau : Elifaz, mwana wa Ada, mwasi wa Ezau, na Reuel, mwana wa Basemat, mwasi mosusu wa Ezau. | |
Gene | LinVB | 36:12 | Elifaz, mwana wa Ezau azalaki na maka-ngo, nkombo ya ye Timna ; oyo aboteli ye Amalek. Bango bazali bana babali ba Ada, mwasi wa Ezau. | |
Gene | LinVB | 36:13 | Bana ba Reuel : Nakat, Zera, Samna na Misa. Bango bazali bana babali ba Basemat, mwasi wa Ezau. | |
Gene | LinVB | 36:14 | Bana ba Olibama, mwana wa Ana, nkoko wa Sibeo, mwasi wa Ezau : oyo aboteli ye Yeus, Yalam na Kora. | |
Gene | LinVB | 36:15 | Bakonzi ba mabota ma bana ba Ezau : mokonzi Tema, mwana wa liboso wa Ezau, mokonzi Omar, mokonzi Sefo, mokonzi Kenaz, | |
Gene | LinVB | 36:17 | O kati ya bana ba Reuel, mwana wa Ezau : mokonzi Nakat, mokonzi Zera, mokonzi Samna, mokonzi Misa. Bana baye ba mwasi wa Ezau, Basemat, bazali bakonzi ba Reuel o Edom. | |
Gene | LinVB | 36:18 | O kati ya bana ba Olibama, mwasi wa Ezau : mokonzi Yeus, mokonzi Yalam, mokonzi Kora. Bazali bakonzi ba libota lya Olibama, mwana wa Ana, mwasi wa Ezau. | |
Gene | LinVB | 36:20 | Bana ba Seir, moto wa Kor, bato ba liboso o mokili moye : Lotan, Sobal, Sibeo na Ana, | |
Gene | LinVB | 36:24 | Sibeo aboti Aya na Ana. Ana moto akutaki mai móto o eliki o ntango akendeki koleisa mpunda ya tata wa ye Sibeo. | |
Gene | LinVB | 36:30 | mokonzi Diso, mokonzi Eser, mokonzi Disan. Bazali bakonzi ba ba-Kor, engebene na bokabwani bwa mabota o mokili mwa Seir. | |
Gene | LinVB | 36:31 | Bakonzi bazalaki koyangela mokili mwa Edom o ntango Israel alubolaki naino mokonzi kuna te. | |
Gene | LinVB | 36:35 | Kusam awei mpe Adad, mwana wa Bedad, ayangeli o esika ya ye ; ye moto alongi ba-Madian o esobe ya Moab ; mboka ya ye Avit. | |
Gene | LinVB | 36:39 | Baal-Kanan awei mpe Adad ayangeli o esika ya ye ; mboka ya ye Pawu, nkombo ya mwasi wa ye Meetabeel, mwana wa Matred, wa Me-Zaab. | |
Gene | LinVB | 36:40 | Nkombo ya bakonzi ba Ezau engebene na bokabwani bwa mabota mpe bwa mboka : mokonzi Timna, mokonzi Alva, mokonzi Yetet ; | |
Chapter 37
Gene | LinVB | 37:2 | Yoka lisolo lya Yakob. Yosefu akokisi mibu zomi na nsambo, azalaki kokengele mpata elongo na bandeko ba ye, azalaki se elenge, azalaki kokende nzela yoko na bana ba Bila mpe ba Zilpa, basi ba tata wa ye. Yosefu ayebisi tata wa bango lolenge bazalaki kotongo bango. | |
Gene | LinVB | 37:3 | Yakob azalaki kolinga Yosefu leka bana ba ye banso, zambi abotaki ye ntango asili akomi mobange. Mokolo moko alatisi ye molato kitoko mpenza. | |
Gene | LinVB | 37:4 | Bandeko bamoni ’te tata azalaki kolinga ye mingi, koleka bana banso, bakomi koyina ye, balobisi ye lisusu malamu te. | |
Gene | LinVB | 37:5 | Mokolo moko Yosefu aloti ndoto mpe asololi bandeko ba ye ndoto yango. Yango wana bakomi koyina ye mingi mpenza. | |
Gene | LinVB | 37:7 | Tosalaki kokanga maboke o bila-nga mpe liboke lya ngai litelemi ; maboke ma bino mazingi liboke lya ngai, mayei kokumbama liboso lya liboke lya ngai. » | |
Gene | LinVB | 37:8 | Bandeko bazo-ngiseli ye : « Olingi nde kokoma mokonzi wa biso to koyangela biso ? » Yango wana bakomi koyina ye koleka, mpo ya ndoto mpe mpo ya maloba ma ye. | |
Gene | LinVB | 37:9 | Aloti naino ndoto esusu, eye ayebisi bandeko ba ye. Alobi : « Nalotoki ndoto esusu. Namoni mwese, sanza na minzoto zomi na moko, isalaki kogumbamela ngai. » | |
Gene | LinVB | 37:10 | Asololi likambo lina na tata mpe na bandeko. Kasi tata apaleli ye, alobi : « Ndoto ya ndenge nini olotoki ? Biso na mama na bandeko ba yo tokoki nde kofukamela yo ? » | |
Gene | LinVB | 37:13 | Yakob alobi na Yosefu : « Bandeko ba yo bazali koleisa etonga epai ya Sikem, nati-ndi yo epai ya bango. » Yosefu ayanoli : « Nakokende. » | |
Gene | LinVB | 37:14 | Tata alobi na ye : « Kende kotala soko bandeko ba yo na nyama ya bango bazali malamu, na nsima oya koyebisa ngai. » Yosefu alongwi o lobwaku la Ebron mpe akomi o Sikem. | |
Gene | LinVB | 37:15 | Moto moko akutani na Yosefu awa azalaki kolekaleka o esobe, atuni ye : « Ozali koluka nini ? » | |
Gene | LinVB | 37:16 | Alobi : « Nazali koluka bandeko ba ngai, nabondeli yo, yebisa ngai esika nini bazali koleisa etonga ya bango. » | |
Gene | LinVB | 37:17 | Moto ona alobi : « Balongwi awa, nayokaki ’te bakoke-nde epai ya Dotan. » Bongo Yosefu akei koluka bandeko ba ye, akuti bango o Dotan. | |
Gene | LinVB | 37:18 | Bandeko bamoni ye azali koya, mpe liboso ’te akoma epai ya bango bayokani ’te bakoboma ye. | |
Gene | LinVB | 37:20 | Toboma ye mpe tobwaka ye o libulu ; tokoloba ’te nyama ya zamba elei ye ; bongo totala soko ndoto ya ye ekosuka boni ! » | |
Gene | LinVB | 37:21 | Eyoki Ruben maloba mana, ameki kobikisa Yosefu o maboko ma bango, alobi : « Toboma ye te ! » | |
Gene | LinVB | 37:22 | Ruben alobi na bango : « Bosopa makila te ; bobwaka ye o libulu kuna o esobe, kasi boboma ye te. » Alobi bongo mpo ya kobikisa ye o maboko ma ba-ngo, azongisa ye o maboko ma tata. | |
Gene | LinVB | 37:25 | na nsima bafandi mpe balei. Bátombola miso, bamoni molo-ngo mwa ba-Ismael bauti o Galaad mpe bazalaki kokende o Ezipeti. Kamela ya bango imemi mpaka, malasi na mpe minó. | |
Gene | LinVB | 37:26 | Yuda alobi na bandeko : « Litomba nini tokozwa soko tobomi ndeko wa biso mpe tokundi makila ma ye ? | |
Gene | LinVB | 37:27 | Malamutotekeyenaba-Ismael, kasi toboma ye te, zambi azali ndeko wa biso, makila moko na biso. » Bandeko ba ye bandimi. | |
Gene | LinVB | 37:28 | Ekomi bato ba mombongo ba Madian koleka wana, bandeko babimisi Yosefu o libulu, bateki ye na ba-Ismael, bazwi mitako mya palata ntuku ibale. Bato ba mombongo bakambi ye o Ezipeti. | |
Gene | LinVB | 37:29 | Ezongi Ruben epai ya libulu, awa amoni Yosefu lisusu o libulu te, apasoli bilamba bya ye. | |
Gene | LinVB | 37:32 | Batindeli tata elamba na maloba maye : « Tolokoti elamba eye ! Tala soko ezali elamba ya mwana wa yo. » | |
Gene | LinVB | 37:33 | Tata atali, alobi : « Ezali elamba ya mwana wa ngai ; nyama ya zamba ekatikati mpe elei ye ! » | |
Gene | LinVB | 37:35 | Bana ba ye banso, babali na basi, bayei kobondo ye ; kasi alingi te ’te babondo ye, alobi : « Bobele na elamba eye ya mpili nakokita o mboka ya bawa, nalanda mwana wa ngai. » Tata atikali se kolela ye. | |
Chapter 38
Gene | LinVB | 38:1 | O eleko ena, Yuda atiki bandeko ba ye mpe akei epai ya moto wa Adulam, nkombo ya ye Kira. | |
Gene | LinVB | 38:2 | Kuna amoni elenge mwasi, mwana wa Sua, moto wa Kanana. Yuda abali ye, akomisi ye mwasi wa ye. | |
Gene | LinVB | 38:5 | Na nsima aboti lisusu mwana mobali mpe apesi ye nko-mbo Sela. Ntango Sela abotami Yuda azalaki kofanda o mboka Kezib. | |
Gene | LinVB | 38:8 | Sikawa Yuda alobi na Onan : « Kende epai ya mwasi wa ndeko wa yo, mpe salisa ye lokola semeki akosalisaka, botela ndeko wa yo mwana. » | |
Gene | LinVB | 38:9 | Nzokande Onan ayebi ’te mwana akozala wa ye te, yango wana mbala inso asangisi nzoto na mwasi wa ndeko wa ye, asopi mai o nse, bongo ndeko wa ye azwa mwana te. | |
Gene | LinVB | 38:11 | Sikawa Yuda alobi na bokilo wa ye Tamar : « Okufeli mobali, bongo zonga epai ya tata wa yo tee mwana wa ngai Sela akokoma mokolo. » Amilobeli : « Ekoki te ’te mwana oyo akufa lokola bandeko ba ye. » Tamar azongi epai ya tata wa ye. | |
Gene | LinVB | 38:12 | Nsima ya mikolo mingi, mwasi wa Yuda, mwana wa Sua, akufi. Esilisi Yuda kokitisa motema, akei o mboka Timna mpo ya kokatisa nsuki ya mpata ya ye, akei elongo na Ira, moninga wa ye wa mboka Adulam. | |
Gene | LinVB | 38:13 | Bato bayebisi Tamar, balobi na ye : « Bokilo wa yo ayei o Timna kokatisa nsuki ya mpata ya ye. » | |
Gene | LinVB | 38:14 | Tamar alongoli bilamba bibe bya mwasi bosenge, alati litambala, amisipi elongi na elamba mpe akei kofanda liboso lya ezibeli ya Enaim, o nzela ya Timna, zambi amoni ’te Sela asili akomi mokolo mpe babalisi ye na Tamar te. | |
Gene | LinVB | 38:16 | Akei epai ya ye mpe atuni ye : « Náya epai ya yo ? » Ayebi te ’te mwasi azalaki bokilo wa ye. Mwasi atuni ye : « Okopesa ngai nini awa okoya epai ya ngai ? » | |
Gene | LinVB | 38:17 | Azongisi : « Nakotindela yo mwana ntaba. » Kasi azongisi : « Nandimi, soko otikeli ngai ndanga tee nakozwa ntaba. » | |
Gene | LinVB | 38:18 | Atuni ye : « Napesa yo ndanga nini ? » Ye azongisi : « Pesa ngai mpete, nkamba mpe lingenda lya yo. » Apesi ye biloko bina, mpe alali na ye ; mwasi azwi zemi. | |
Gene | LinVB | 38:20 | Yuda atindi moninga wa ye wa Adulam apesa mwasi mwana ntaba, mpo ’te akamata biloko bya ye o maboko ma ye ; kasi moninga akuti mwasi te. | |
Gene | LinVB | 38:21 | Atuni bato ba mboka : « Wapi mwasi ndumba oyo azalaki o nzela ya Enaim ? » Kasi bango bayanoli : « Mwasi ndumba azalaka awa te ! » | |
Gene | LinVB | 38:22 | Yango wana azongi epai ya Yuda mpe alobi : « Nakutaki ye te ; bato ba mboka balobaki : Mwasi ndumba azalaka awa te. » | |
Gene | LinVB | 38:23 | Yuda alobi : « Atikala na biloko bina. Mabe soko bato bakomi koseke biso. Ngai moto natindelaki ye mwana ntaba, kasi yo okuti ye te. » | |
Gene | LinVB | 38:24 | Nsima ya sanza isato, bayebisi Yuda : « Bokilo wa yo Tamar asali bondumba, mpo ya mobulu mwa ye azwi zemi. » Yuda atindi etinda eye : « Babimisa ye o libanda, mpe batumba ye ! » | |
Gene | LinVB | 38:25 | Awa bazalaki kobimisa ye, Tamar atindeli bokilo wa ye maloba : « Moto apesaki ngai zemi, nkolo wa biloko biye. Bongo tala soko nani azali nkolo wa mpete, nkamba na lingenda liye. » | |
Gene | LinVB | 38:26 | Yuda amoni ’te biloko bisalaki bya ye, alobi : « Solo, aleki ngai na bosembo, mpo naboyaki kobalisa ye na mwana wa ngai Sela. » Na nsima Yuda ayebani na ye lisusu te. | |
Gene | LinVB | 38:28 | O ntango ya kobota, mwana moko abimisi loboko ; mwasi mobotisi akangi nsinga etane o loboko lona, alobi : « Mwana oyo abimi liboso. » | |
Gene | LinVB | 38:29 | Kasi mwana abendi loboko la ye mpe ndeko wa ye abimi. Mobotisi alobi : « Ofungoleli ye nzela, solo ! » Bongo bapesi ye nkombo Peres, lokola ’te « Mofungoli ». | |
Chapter 39
Gene | LinVB | 39:1 | Bakei na Yosefu o Ezipeti. Moto moko wa Ezipeti Potifar, mosaleli wa Farao mpe komanda wa bakengeli, asombi ye epai ya ba-Ismael, baye bayaki na ye. | |
Gene | LinVB | 39:2 | Yawe azalaki kobatela Yosefu, mpe Yosefu azalaki kosala mosala mwa ye se malamu. Efandi ye o ndako ya mo-Ezipeti moko, mokonzi wa ye, | |
Gene | LinVB | 39:3 | oyo amoni ’te Yawe azalaki kosalisa Yosefu mpo ’te misala mya ye minso mitambola malamu. | |
Gene | LinVB | 39:4 | Abandi kolinga Yosefu mingi, mpe akomisi ye mosalisi wa ye mpenza, aluboli ye mokengeli wa biloko bya ye binso, atalela ye misala minso. | |
Gene | LinVB | 39:5 | Ut’o mokolo Yosefu akomaki kapita wa basali mpe mokengeli wa biloko bya ye binso, mo-Ezipeti amoni ’te Yawe azalaki kobenisa ndako ya ye, biloko bya ndako mpe bya bilanga mpo ya Yosefu. | |
Gene | LinVB | 39:6 | Bongo mokonzi wa ndako atikeli Yosefu makambo ma ye manso, mpe mpo ya ye, azalaki kopangana lisusu na eloko te, se na bilei. Yosefu azalaki mobali kitoko, solo. | |
Gene | LinVB | 39:7 | Nsima ya makambo maye, mwasi wa Potifar abandi kolula Yosefu, alobi na ye : « Lala na ngai. » | |
Gene | LinVB | 39:8 | Yosefu aboyi, alobi na mwasi wa nkolo wa ye : « Awa nazali o ndako, mokonzi apangani lisusu na eloko te, atiki manso o maboko ma ngai. | |
Gene | LinVB | 39:9 | O ndako eye aleki ngai na bokasi te ; apimi ngai eloko te, bobele yo, mpo osali mwasi wa ye. Boniboni násala mabe maye, násumuka o miso ma Nzambe ? » | |
Gene | LinVB | 39:10 | Ata mwasi azalaki kotungisa ye mikolo minso, Yosefu aboyi kolala na ye, alingi komipesa na ye te. | |
Gene | LinVB | 39:11 | Mokolo moko Yosefu ayingeli o ndako mpo ya kosala mosala mwa ye ; moto mosusu azalaki te. | |
Gene | LinVB | 39:12 | Mwasi akangi ye na molato, alobi : « Lala na ngai. » Kasi Yosefu atiki molato o maboko ma ye mpe akimi. | |
Gene | LinVB | 39:14 | abengi basali ba ye mpe alobi na bango : « Talaka, mo-Ebrei oyo bayelaki biso, alingi kosakana na biso ! Ayaki koluka ngai mpo tosala mabe, kasi nagangi makasi. | |
Gene | LinVB | 39:15 | Awa ayoki ’te natomboli mongongo mpo ya kobenga bato, atiki elamba ya ye, akimi mpe abimi o libanda. » | |
Gene | LinVB | 39:17 | Alobi na ye se nde-nge yoko : « Moombo oyo wa ba-Ebrei okotisaki o ndako ya biso, ayaki koluka ngai mpo ya kosala mabe. | |
Gene | LinVB | 39:19 | Mwasi alobi na mobali wa ye : « Yoka makambo moombo wa yo alingaki kosala ngai. » Eyoki mobali maloba mana, asiliki mingi. | |
Gene | LinVB | 39:20 | Akangisi Yosefu mpe akotisi ye o boloko, esika mokonzi akangisi baye basalaki ye mabe. Bongo Yosefu atikali kokangema o boloko. | |
Gene | LinVB | 39:21 | Kasi Yawe asalisi ye, atikali penepene na ye, mpe atindi motema mwa kapita wa bakengeli ’te alinga ye. | |
Gene | LinVB | 39:22 | Mokonzi wa boloko atiki bato banso o maboko ma Yosefu ; bobele ye akomi kotala makambo manso. | |
Chapter 40
Gene | LinVB | 40:1 | Esili makambo mana, kapita wa baye bakobongelaka mokonzi wa Ezipeti vino na mpe kapita wa baye bakolambaka mampa basali mabe o miso ma mokonzi wa Ezipeti. | |
Gene | LinVB | 40:2 | Farao asiliki mingi na basaleli ba ye babale, kapita wa baye bakobongaka vino na kapita wa baye bakolambaka mampa. | |
Gene | LinVB | 40:3 | Akotisi bango o boloko eye Yosefu azalaki, atiki bango o maboko ma komanda wa bakengeli. | |
Gene | LinVB | 40:5 | Mokolo moko na butu, awa bakangemi o boloko, bango babale, ná kapita wa baye bakobongaka vino ya mokonzi ná kapita wa baye bakolambaka mampa ma ye, baloti moto na moto ndoto ya ye, mpe ndoto yoko yoko ezalaki na ntina ya yango. | |
Gene | LinVB | 40:7 | Atuni basaleli ba Farao, baye bazalaki elongo na ye o boloko ya mokonzi : « Mpo nini bosali na elongi ya mawa lelo ? » | |
Gene | LinVB | 40:8 | Bazongiseli ye : « Toloti ndoto mpe moto moko akoki kolimbola yango te. » Yosefu alobi na bango : « Bobele Nzambe moto akopesaka ndimbola, apebisa ngai yango. » | |
Gene | LinVB | 40:9 | Kapita wa baye bakobongaka vino asololi Yosefu ndoto ya ye, alobi : « O ndoto namoni nzete ya vino : | |
Gene | LinVB | 40:10 | ezalaki na bitapi bisato ; bitapi bikoli, fulele ibimi noki mpenza mpe bituka bisalaki na mbuma ya vino iteli. | |
Gene | LinVB | 40:11 | Nazalaki na nkeni ya Farao o maboko, nakamati mbuma mpe nakamoli yango, na nsima napesi Farao nkeni. » | |
Gene | LinVB | 40:12 | Yosefu alobi na ye : « Yoka ndimbola ya ndoto : Bitapi bisato bilakisi mikolo misato. | |
Gene | LinVB | 40:13 | Etikali mikolo misato, Farao akosala yo malamu, akozongisa yo o mosala : okopesa Farao nkeni lisusu, se lokola ozalaki kosala liboso, ntango ozalaki kapita wa baye bakobongelaka mokonzi vino. | |
Gene | LinVB | 40:14 | Ntango okozwa bolamu, okanisaka ngai, mpe oyebisa Farao likambo lya ngai, abimisa ngai o boloko. | |
Gene | LinVB | 40:15 | Balongolaki ngai na makasi o ekolo ya ba-Ebrei, mpe awa nasalaki mabe moko te mpo ’te bakanga ngai o boloko. » | |
Gene | LinVB | 40:16 | Kapita wa baye bakolambaka mampa, awa amoni ’te Yosefu apesi moto wa ndoto ndimbola elamu, alobi na ye : « Ngai mpe naloti ndoto : Namemi bikoló bisato na mi-nkate o motó. | |
Gene | LinVB | 40:17 | O ekoló ya likolo bisikiti bizalaki ndenge na ndenge, biye Farao ameseni kolia, kasi ndeke iyei kolia byango o ekoló o motó mwa ngai. » | |
Gene | LinVB | 40:18 | Yosefu azongiseli ye : « Yoka ndimbola ya ndoto : Bikoló bisato bilakisi mikolo misato. | |
Gene | LinVB | 40:19 | Etikali mikolo misato, Farao akotombola motó mwa yo, akotingisa ebembe ya yo o nzete, mpe ndeke ikoya kolia misuni mya yo. » | |
Gene | LinVB | 40:20 | Esalemi se bongo : Nsima ya mikolo misato ezalaki eyenga ya mbotama ya Farao. Alambeli bato ba ye banso limpati linene. O miso ma bango banso abimisi kapita wa baye bakobongaka vino na mpe kapita wa baye bakolambaka mampa. | |
Gene | LinVB | 40:21 | Azongisi kapita wa baye bakobongaka vino o mosala mwa ye, bongo abandi lisusu kopesa Farao nkeni ya vino. | |
Gene | LinVB | 40:22 | Kasi kapita wa baye bakolambaka mampa, Farao atingisi ye o nzete, se lokola Yosefu alimbolaki ndoto. | |
Chapter 41
Gene | LinVB | 41:2 | mpe amoni ngombe nsambo ibimi o ebale Nil ; ngombe inene, ya mafuta mingi, ibandi kolia matiti. | |
Gene | LinVB | 41:3 | Na nsima ebimi ngombe isusu nsambo, kitoko te, ikonda mingi, ikomi penepene na ngombe iye ibimaki liboso o Nil. | |
Gene | LinVB | 41:5 | Awa alali lisusu, aloti ndoto esusu. Amoni lititi lya masangu kitoko libimisi mitó kitoko nsambo. | |
Gene | LinVB | 41:6 | Na nsima ebimi mpe lititi lya masangu na mitó nsambo ya malonga te, mompepe mwa Esti mokaukisi myango, | |
Gene | LinVB | 41:7 | mpe masangu mabe mabandi kolia masangu malamu. Elamuki Farao, ayebi ’te ezalaki bobele ndoto ! | |
Gene | LinVB | 41:8 | Na ntongo mayele ma Farao mabulungani, abengi banganga banso na bato ba bwanya banso ba Ezipeti, ayebisi bango ndoto aloti. Kasi moto moko akoki kolimbolela Farao ndoto ya ye te. | |
Gene | LinVB | 41:9 | O ntango ena, kapita wa baye bakobongaka vino, alobi na Farao : « Tika, lelo nasakola mabe nasalaki ! | |
Gene | LinVB | 41:10 | Mokolo moko mokonzi asilikaki na biso basaleli ba ye, biso, kapita wa baye bakobongaka vino na mpe kapita wa baye bakolambaka mampa ; atindi biso o boloko epai ya komanda wa bakengeli. | |
Gene | LinVB | 41:12 | Ezalaki wana o boloko elenge mobali, mo-Ebrei, azalaki moombo wa komanda wa bakengeli. Toyebisi ye ndoto ya biso, ye apesi biso ndimbola, ndimbola ya ndoto ibale ekeseneki. | |
Gene | LinVB | 41:13 | Mpe manso masalemaki se lokola alimbolaki ; bazongisi ngai o mosala mwa kala, kasi mosusu babomi ye na nsinga. » | |
Gene | LinVB | 41:14 | Farao abengisi Yosefu, babimisi ye noki o boloko ; akati mandefu, alati bilamba bisusu mpe bakambi ye epai ya Farao. | |
Gene | LinVB | 41:15 | Farao alobi na Yosefu : « Naloti ndoto mpe moto moko ayebi kolimbola yango te. Bato bayebisi ngai ’te yo, awa oyoki lisolo lya ndoto, okoki kolimbola yango. » | |
Gene | LinVB | 41:16 | Yosefu ayanoli : « Ezali ngai te, kasi Nzambe moto akoyebisa Farao maye makobongela ye. » | |
Gene | LinVB | 41:18 | Mpe namoni ngombe nsambo ya mafuta mpe kitoko, ibimi o ebale mpe ibandi kolia matiti o libongo. | |
Gene | LinVB | 41:19 | Na nsima namoni ngombe isusu nsambo ibimi o ebale, iye ikonda mabe, kitoko soki te, makasi mpe te ; o mokili mobimba mwa Ezipeti namoni naino ngombe ibe boye te. | |
Gene | LinVB | 41:21 | Awa ilei yango, itikali se minkuwa mpamba lokola ngombe ilei eloko te ! Na nsima nalamuki. | |
Gene | LinVB | 41:24 | Mitó miye mike mimeli mitó minene nsambo. Nayebisi banganga makambo manso, kasi ata moko te apesi ngai ndimbola ya yango. » | |
Gene | LinVB | 41:25 | Yosefu alobi na Farao : « Ndoto ya yo ibale izali na ntina se yoko. Nzambe ayebisi yo makambo ma-nso alingi kosala. | |
Gene | LinVB | 41:26 | Ngombe kitoko nsambo ilakisi mibu nsambo, mpe mitó nsambo milakisi se mibu nsambo. Ndoto ibale ilakisi se mpo yoko. | |
Gene | LinVB | 41:27 | Ngombe nsambo iye iko-ndi mabe ibimi nsima, ná mpe mitó nsambo ya masangu mabe, mikauki na mompepe mwa Esti, ilakisi mibu nsambo mya nzala makasi. | |
Gene | LinVB | 41:28 | Likambo nasili nalobeli Farao, lyango liye : Nzambe ayebisi Farao nini alingi asala. | |
Gene | LinVB | 41:30 | kasi na nsima ekoya mibu nsambo mya nzala. Bato bakoyeba lisusu te ’te biloko bizalaki mingi o Ezipeti. Nzala ekoboma bato. | |
Gene | LinVB | 41:31 | Bakoyeba lisusu te mokolo nini bazalaki na biloko mingi, mpo ya nzala ekoya nsima, nzala yango ekoleka mpasi. | |
Gene | LinVB | 41:32 | Bongo soko Farao alotoki ndoto mbala ibale, elakisi ’te Nzambe akani kosala bongo solo, mpe akosala yango noki. | |
Gene | LinVB | 41:33 | Sikawa ebongi Farao aluka moto moko wa bwanya mpe wa mayele, alubola ye moyangeli o mokili mwa Ezipeti. | |
Gene | LinVB | 41:34 | Abimisa mibeko mpe alubola bakapita o ekolo mobimba mpo ya kokongolo biloko. O mibu nsambo mikoya mbuma ikozala mingi, bongo ba-Ezipeti banso bapesa leta eteni yoko ya bitano ya mbuma. | |
Gene | LinVB | 41:35 | Bakongolo bongo biloko biye bikozwama o mibu nsambo mikoya, babomba mbuma ya mampa o bibombelo lokola Farao akotinda ; bakende kotika bilei binso o mboka inene, mpe babomba byango kuna. | |
Gene | LinVB | 41:36 | Biloko bina bikosalisa bato ba ekolo mobimba o eleko ya mibu nsambo, eye nzala ekongala o mokili mwa Ezipeti, bongo bato bakokufa na nzala te. » | |
Gene | LinVB | 41:38 | Farao alobi na bankumu : « Tokoki nde kozwa moto mosusu oyo atondi na elimo ya Nzambe lokola ye ? » | |
Gene | LinVB | 41:39 | Mpe Farao alobi na Yosefu : « Awa Nzambe ayebisi yo makambo maye manso, moto moko te azali na mayele mpe na bwanya lokola yo. | |
Gene | LinVB | 41:40 | Yo moto okozala moyangeli wa ndako ya ngai, bato ba ngai banso batosa mitindo mya yo. Se ngai moto nafandi o ngwende ya bokonzi nakoleka yo. » | |
Gene | LinVB | 41:41 | Mpe Farao alobi na Yosefu : « Tala, nakolubola yo moyangeli wa ekolo mobimba ya Ezipeti. » | |
Gene | LinVB | 41:42 | Alongoli mpete ya ye o mosapi mpe atii yango o mosapi mwa Yosefu ; alatisi ye bilamba bya motuya na mpe nsinga ya wolo o nkingo. | |
Gene | LinVB | 41:43 | Na nsima abutisi ye o likalo lya ye lya mabale, mpe bato bagangi o liboso lya ye : « Nkumu, kuma ! » Aluboli ye bongo moyangeli wa Ezipeti mobimba. | |
Gene | LinVB | 41:44 | Farao alobi mpe na Yosefu : « Bobele ngai nazali Farao. Kasi moto moko te akotombola loboko to lokolo o Ezipeti mobimba, soko yo ondimi te. » | |
Gene | LinVB | 41:45 | Apesi Yosefu nkombo ya sika Sofnat-Panea, mpe akabeli ye mwasi, nkombo ya ye Asenat, mwana wa Potifera, nganga nzambe wa engumba On. Na nsima Yosefu abandi kotambola o Ezipeti mobimba. | |
Gene | LinVB | 41:46 | O mikolo Yosefu akomaki o miso ma Farao, mokonzi monene wa Ezipeti, akokisaki mibu ntuku isato. Atiki ndako ya mokonzi mpo akende kotala ekolo mobimba. | |
Gene | LinVB | 41:48 | Mibu miye nsambo mbuma ibotami mingi o mokili mwa Ezipeti, Yosefu asangisi yango inso, abombi yango o bingumba. O engumba yoko yoko abombi mbuma iuti o bilanga bya penepene. | |
Gene | LinVB | 41:49 | Yosefu abombi mbuma ya mampa ebele mpenza, lokola zelo lya libongo lya mbu. Batiki komeka bozito bwa yango, zambi elekaki mingi mpenza. | |
Gene | LinVB | 41:50 | Mobu mwa yambo mwa nzala mobandi naino te, Yosefu asili akomi na bana babale. Aboti bango na Asenat, mwana wa Potifera, nganga nzambe wa On. | |
Gene | LinVB | 41:51 | Yosefu apesi mwana wa liboso nkombo Manase, alobi : « Nzambe asali ’te nabosana mpasi ya ngai inso na mpe libota lya ngai mobimba. » | |
Gene | LinVB | 41:52 | Apesi mwana wa babale nkombo Efraim, alobi : « Nzambe apesi ngai bana o mokili moye nayokaki mpasi. » | |
Gene | LinVB | 41:54 | mibu nsambo mya nzala mibandi, lokola Yosefu alobaki. Nzala engali o bikolo binso, kasi o ekolo Ezipeti mampa mazalaki. | |
Gene | LinVB | 41:55 | Ba-Ezipeti, awa bakomi koyoka nzala, bakei epai ya Farao, mpe babondeli ye ’te apesa bango bilei. Farao alobi na bango : « Bokende epai ya Yosefu mpe bosala lokola akotinda bino. » | |
Gene | LinVB | 41:56 | Nzala eyei kongala makasi o mokili mobimba. Yosefu afungoli bibombelo binso mpe atekisi biloko, mpo nzala ekomi makasi. | |
Chapter 42
Gene | LinVB | 42:1 | Eyoki Yakob ’te mbuma ya mampa izalaki mingi o Ezipeti, alobi na bana ba ye : « Mpo nini bozali kotalana boye ? | |
Gene | LinVB | 42:2 | Nayoki ’te o Ezipeti mbuma ya mampa izali ; bokende kuna mpe bosombela biso mbuma ya mampa mpo ’te tobika mpe tokufa te. » | |
Gene | LinVB | 42:4 | Kasi Yakob atindi Benyamin, ndeko wa Yosefu, elongo na bandeko basusu te, zambi alobi : « Mbele akozwa likama libe. » | |
Gene | LinVB | 42:5 | Bana ba-Israel, elongo na bato basusu ebele, bakei kosomba mbuma ya mampa zambi nzala engali o ekolo Kanana. | |
Gene | LinVB | 42:6 | Yosefu azalaki mokonzi o mokili mwa Ezipeti, azalaki kotekela bato banso mbuma ya mampa. Bandeko bayei mpe bagumbameli ye kin’o nse. | |
Gene | LinVB | 42:7 | Ntango Yosefu amoni bango, ayebi bango, kasi amiyebisi na bango te. Agangeli bango, alobi : « Bino bouti wapi ? » Balobi : « Touti o Kanana mpo tosomba bilei. » | |
Gene | LinVB | 42:9 | Ekanisi Yosefu ndoto alotoko mpo ya bango, alobi na bango : « Bino bozali banongi ! Boyei awa mpo boyeba bisika tokobatelaka ekolo ya biso malamu te. » | |
Gene | LinVB | 42:10 | Kasi balobi : « Te, mokonzi, biso basaleli ba yo, toyei se kosomba biloko bya kolia. | |
Gene | LinVB | 42:12 | Kasi alobi na bango : « Eloko te, boyei konongo soko bisika nini bokoki kokotela biso. » | |
Gene | LinVB | 42:13 | Bango bazongisi : « Biso basaleli ba yo, tozalaki bandeko zomi na babale ba tata moko o mokili mwa Kanana ; mwana wa nsuka atikali epai ya tata, mosusu azali lisusu na bomoi te. » | |
Gene | LinVB | 42:15 | Tala, nakomeka bino : Lokola Farao azali solo, bokolongwa awa te soko leki wa bino akoya awa te. | |
Gene | LinVB | 42:16 | Botinda moko wa bino aya na leki wa bino, basusu bakotikala o boloko. Tokoyeba bongo soko bolobi makambo ma solo. Soki te, lokola Farao azali solo, bozali banongi solo. » | |
Gene | LinVB | 42:18 | O mokolo mwa misato Yosefu alobi na bango : « Bosala lokola nakoyebisa bino, soko bolingi kobika, mpo ngai nakobangaka Nzambe. | |
Gene | LinVB | 42:19 | Soko bozali na bosembo, moko wa bino atikala o boloko, basusu bakoki kokende. Bakende na mbuma ya mampa isengeli na mabota ma bino. | |
Gene | LinVB | 42:20 | Bokozonga awa na mozimi wa bino, bongo nayeba soko bolobi makambo ma solo. Soki te, bokokufa. » Basali se bongo. Basali bobele lokola Yosefu alobaki. | |
Gene | LinVB | 42:21 | Balobani : « Ya solo, tozwi etumbu mpo ya mabe tosalaki ndeko wa biso. Ntango azalaki na mpasi abondelaki biso, kasi tondimelaki ye te ; yango wana tokomi sikawa na mpasi. » | |
Gene | LinVB | 42:22 | Ruben alobi : « Nakebisaki bino bozala mwana mabe te, kasi boyokaki ngai te. Sikawa tosali kofuta nyongo ya makila ma ye. » | |
Gene | LinVB | 42:23 | Bayebi te ’te Yosefu azalaki koyoka lokota la bango, zambi nta-ngo basololi na ye, moto moko azalaki kobongola maloba ma ba-ngo o lokota la ba-Ezipeti. | |
Gene | LinVB | 42:24 | Yosefu alongwi, abandi kolela. Mwa moke nsima azongi epai ya bango mpe akobi kosolola na bango. Akamati moko wa bango, Simeon, mpe akangisi ye o miso ma bango. | |
Gene | LinVB | 42:25 | Atindi ’te batondisa ngoto ya bango na mbuma ya mampa, bazongisa mosolo mwa moko moko o ngoto ya ye, mpe bapesa bango biloko bya kolia mpo ya mobe-mbo. Basali se bongo. | |
Gene | LinVB | 42:27 | O esika balali na butu, moko wa bango afungoli ngoto ya mbuma ya mampa mpo ’te aleisa mpunda ya ye, mpe amoni mosolo mwa ye o ngoto likolo lya mbuma ya mampa. | |
Gene | LinVB | 42:28 | Alobi na bandeko ba ye : « Bazongiseli ngai mosolo mwa ngai, nakuti mwango o ngoto ya ngai ! » Mitema mya bango mipaswani, balengi mpe bamituni : « Mpo nini Nzambe asali biso bongo ? » | |
Gene | LinVB | 42:29 | Ezongi bango epai ya tata wa bango Yakob o mokili mwa Kanana, basololi ye makambo manso makwelaki bango. | |
Gene | LinVB | 42:30 | Balobi : « Moto ona azali nkumu monene wa ekolo, alobelaki biso maloba makasi mpe atalaki biso lokola banongi ba ekolo. | |
Gene | LinVB | 42:32 | Tozalaki bandeko zomi na babale ba tata moko ; moko akufi mpe mwana wa nsuka atikali sikawa epai ya tata wa biso o mokili mwa Kanana. | |
Gene | LinVB | 42:33 | Kasi moto ona, moyangeli wa ekolo, ayanoli biso : Mpo nayeba ’te bosali na bosembo : botikela ngai moko wa bino, bokamata mbuma ya mampa isengeli na mabota ma bino, mpe bokende. | |
Gene | LinVB | 42:34 | Kasi bozonga awa na ndeko wa bino wa nsuka, bongo nakoyeba ’te bozali banongi te, kasi bato ba bosembo. Na nsima nakotikela bino ndeko wa bino, mpe nde bokoki kofanda o ekolo ya biso. » | |
Gene | LinVB | 42:35 | Awa babandi kobimisa mbuma o ngoto, moto na moto akuti o ngoto ya ye libenga na mosolo mwa ye. Emoni bango mosolo mwa bango, bakomi kobanga mingi, ná tata wa bango lokola. | |
Gene | LinVB | 42:36 | Tata wa bango Yakob alobi : « Bino bozali kobotolo ngai bana ba ngai : Yosefu azali lisusu te, Simeon azali lisusu te, mpe sikawa bolingi kokamata Benyamin ; botala makambo ma mpasi makweli ngai ! » | |
Gene | LinVB | 42:37 | Kasi Ruben alobi na tata wa ye : « Okoki koboma bana babali ba ngai babale, soko nazongiseli yo Benyamin te. Pesa ye o maboko ma ngai, nakozongisa ye o maboko ma yo. » | |
Chapter 43
Gene | LinVB | 43:2 | Esilisi bango koli mbuma inso ya mampa bazwaki o Ezipeti, tata wa bango alobi : « Bosonga kuna kosombela biso biloko bya kolia. » | |
Gene | LinVB | 43:3 | Yuda ayanoli : « Kuna moto ona akebisaki biso polele mpenza : Bokoki kobima o miso ma ngai te, soko boyei na ndeko wa bino te. | |
Gene | LinVB | 43:5 | Kasi soko ondimi te, tokokende te. Mpamba te, moto ona alobaki na biso : Soko boyei na ndeko wa bino te, bokoki kobima o miso ma ngai te. » | |
Gene | LinVB | 43:6 | Israel alobi : « Mpo nini bosalaki ngai mabe maye, mpe boyebisaki ye ’te bozali naino na ndeko mosusu. » | |
Gene | LinVB | 43:7 | Bango bazongisi : « Moto ona atunaki biso mituna mingi, mpo ya biso mpe mpo ya libota lya biso. Atunaki : Tata wa bino azali ? Bozali na ndeko mosusu ? Toyanolaki ye na bosembo. Tokokaki nde koyeba ’te akoloba na biso : Boya na ndeko wa bino awa ? » | |
Gene | LinVB | 43:8 | Yuda alobi na tata wa ye Israel : « Tika mwana akende na ngai. Tosala noki mpe tokende, bongo tobika mpe tokufa na nzala te, biso na yo tata, na bana ba biso. | |
Gene | LinVB | 43:9 | Ngai moko nakobatela ye ; na nsima otuna bobele ngai. Soko nazongisi ye awa te, soko nabimisi ye awa o miso ma yo te, nakomeme likambo epai ya yo tee liwa lya ngai. | |
Gene | LinVB | 43:11 | Tata Israel alobi na bango : « Tokoki bobele kosala boye : bokamata o ngoto ya bino ndambo ya mbuma ya bilanga mpo ’te bokoka kobo-nzela moto ona : malasi na mwa mafuta ma nzoi, mpaka, matiti ma nsolo mpimbo, mbuma ya nzete ya pistase, na mbuma ya lidame. | |
Gene | LinVB | 43:12 | Bokamata mosolo moye bokutaki o ngoto ya bino, mbele babosanaki mwango. Bobakisa mosolo mosusu. | |
Gene | LinVB | 43:14 | Nzambe wa bokasi bonso asala ’te ayamba bino malamu, ali-ngisa bino ’te bozonga na ndeko wa bino mpe na Benyamin. Soko ese-ngeli ’te nabungisa bana ba ngai, likambo te ! » | |
Gene | LinVB | 43:15 | Bakamati makabo, babakisi mosolo mosusu mpe bakei elongo na Benyamin. Bakomi o Ezipeti mpe babimi o miso ma Yosefu. | |
Gene | LinVB | 43:16 | Emoni Yosefu ’te Benyamin azalaki na bango, alobi na mosaleli wa ye : « Kotisa bato baye o ndako, boma nyama mpe lamba yango, zambi nalingi kolia na bango esika yoko na midi. » | |
Gene | LinVB | 43:18 | Bango babangi zambi bakotisi bango o ndako ya Yosefu. Balobi : « Basali biso bongo mpo ya mosolo tokutaki o ngoto ya biso o mobe-mbo mwa yambo. Balingi kokanga biso, kosala biso mabe mpe kokomisa biso baombo mpe kobotolo biso mpunda. » | |
Gene | LinVB | 43:21 | Awa tozongi, ntango tokomi o esika ya kolala, tofungoli ngoto ya biso, mpe tokuti mosolo mwa biso wana. Moto na moto akuti mosolo mwa ye molali likolo lya biloko ; sikawa tozongi na mwango awa. | |
Gene | LinVB | 43:22 | Tomemi mosolo mosusu mpo tosomba biloko. Toyebi te soko nani atiaki mosolo mona o ngoto ya biso. » | |
Gene | LinVB | 43:23 | Mosaleli azongisi : « Bokitisa mitema, bobanga te ! Bobele Nzambe wa bino, Nzambe wa tata wa bino, atiaki mosolo o ngoto ya bino. Ngai nazwaki mosolo mwa ngai. » Na nsima abimiseli bango Simeon. | |
Gene | LinVB | 43:24 | Mosaleli akotisi bango o ndako ya Yosefu. Ayeli bango mai mpo basukola makolo, aleisi mpe mpu-nda ya bango. | |
Gene | LinVB | 43:25 | Bango babongisi makabo maye bayeli Yosefu, mpe bazili ye tee midi, mpo bayoki ’te bakolia midi o ndako ena. | |
Gene | LinVB | 43:27 | Ayambi bango malamu mpe atuni bango : « Tata wa bino oyo akomi mobange lokola boyebisaki ngai, azali naino na bomoi ? » | |
Gene | LinVB | 43:28 | Bazongisi : « Tata wa biso, mosaleli wa yo, akufi te, azali malamu. » Bafukami mpe bagumbami. | |
Gene | LinVB | 43:29 | Yosefu átombola miso, amoni ndeko wa ye Benyamin, oyo azali na ye mama moko. Atuni bango : « Oyo nde mosimi wa bino, mwana wa nsuka, lokola boyebisaki ngai ? » Bongo alobi na ye : « Mwana wa ngai, Nzambe abenisa yo. » | |
Gene | LinVB | 43:30 | Awa amoni mosimi wa ye, akoki kokanga motema lisusu te mpe mai mabimeli ye o miso. Abimi noki, akoti o eteni ya ndako ya ye moko mpe aleli. | |
Gene | LinVB | 43:32 | Batieli ye bilei o meza ya ye moko, batieli bango bilei o esika esusu ; batieli mpe ba-Ezipeti, baye bakoliaka na ye elongo, epai esusu, zambi ba-Ezipeti bakoki kolia na ba-Ebrei esika yoko te. O miso ma bango likambo lyango lizali nsomo mpenza. | |
Gene | LinVB | 43:33 | Bafandisi bango o boso bwa ye, moko moko o esika ebongi na ye, motomolo liboso, bazimi nsima. Banso batalani na bokamwi. | |
Chapter 44
Gene | LinVB | 44:1 | Yosefu alobi na kapita wa ye : « Tondisa ngoto ya ba-ngo na biloko binso bakoki komeme, mpe tia mosolo mwa moko moko likolo lya biloko. | |
Gene | LinVB | 44:2 | O ngoto ya mwana wa nsuka, otia nkeni ya ngai ya palata esika yoko na mosolo apesaki mpo ya mbuma ya ma-mpa. » Kapita asali lokola Yosefu atindaki. | |
Gene | LinVB | 44:4 | Ntango babimi o mboka mpe bakomi naino mosika te, Yosefu alobi na kapita wa ye : « Noki ! Kende kolanda bango ! Soko ozwi bango, oloba : Mpo nini bosali mabe na bato basalaki bino malamu ? | |
Gene | LinVB | 44:5 | Ntina nini boyibi nkeni ya mokonzi wa ngai ? Akomeleke o nkeni eye, ekosalisaka ye mpe mpo ayeba maka-mbo makoya nsima. Bosalaki mabe mpenza. » | |
Gene | LinVB | 44:7 | Kasi bango bazongisi : « Mokonzi, boniboni okoki koloba bongo ? Biso basaleli ba yo tokoki kosala bongo soki moke te ! | |
Gene | LinVB | 44:8 | Mosolo tokutaki liboso o ngoto ya biso, toyeli yo mwango ut’o mokili mwa Kanana. Bongo ndenge nini tokoki koyiba palata to wolo o ndako ya mokonzi wa yo ? | |
Gene | LinVB | 44:10 | Kapita alobi : « Malamu ! Esalema lokola bolobaki : Oyo nakokuta ye na yango akozala moombo wa ngai ; basusu bakoki kokende. » | |
Gene | LinVB | 44:12 | Kapita atalitali yango, banda na mwana wa liboso, tee mwana wa nsuka. Azwi nkeni o ngoto ya Benyamin. | |
Gene | LinVB | 44:14 | Yuda na bandeko ba ye bakomi o ndako ya Yosefu, bakuti ye azali se wana. Bamibwaki o nse o boso bwa ye. | |
Gene | LinVB | 44:15 | Yosefu atuni bango : « Bosalaki nini ? Boyebaki te ’te nkumu monene lokola ngai akokaki koyeba makambo makoya nsima ? » | |
Gene | LinVB | 44:16 | Yuda azongisi : « Toloba nini na mokonzi wa biso ? Tokoki nde kosamba mpe komilongisa ? Nzambe yemei alakisi polele mabe ma biso, basaleli ba yo. Solo, tokomi baombo ba yo, mokonzi wa biso ; biso banso na mpe oyo bakutaki ye na nkeni. » | |
Gene | LinVB | 44:17 | Yosefu azongisi : « Nakoki kosala bongo te ! Bobele moto bazwaki ye na nkeni akozala moombo wa ngai ; basusu bazonga na boboto epai ya tata wa bino. » | |
Gene | LinVB | 44:18 | Yuda abelemi na Yosefu mpe alobi na ye : « Mokonzi, nabondeli yo, ondima ’te naloba mwa moke. Osilikela ngai, mosaleli wa yo, te, zambi osali na bokonzi lokola Farao. | |
Gene | LinVB | 44:19 | Otunaki biso basaleli ba yo liboso soko tata azali naino mpe soko tosali na ndeko mosusu. | |
Gene | LinVB | 44:20 | Toyanolaki : Tata akomi mobange mpe tosali na leki oyo tata abotaki o bonuna bwa ye. Ndeko wa ye wa mama moko akufa ; tata atikali se na ye moko mpe alingi ye mingi. | |
Gene | LinVB | 44:22 | Toyebisaki yo ’te mwana oyo akoki kotika tata wa ye te. Soko atiki tata wa ye, tata akokufa. | |
Gene | LinVB | 44:23 | Kasi olendisaki mpe olobaki na basaleli ba yo : Soko leki wa bino ayei elongo na bino te, nakoyamba bino lisusu te. | |
Gene | LinVB | 44:26 | tozongiseli ye : Tokoki kokende te soko mosimi wa biso azali na biso elongo te. Soko akokende na biso elongo te, tokoki kobima o miso ma moto ona te. | |
Gene | LinVB | 44:29 | Soko bokei sikawa mpe na mosusu mpe likambo likweli ye, bokokitisa ngai moto wa nsuki mpembe na mpasi o mboka ya bawa. | |
Gene | LinVB | 44:30 | Bongo soko nazongi epai ya tata, mosaleli wa yo, mpe nakei na mwana te, oyo akolingaka mingi mpenza, | |
Gene | LinVB | 44:31 | tata akokufa noki, mpo akomono ’te mwana oyo ayei na biso te. Bongo biso basaleli ba yo tokokitisa tata, moto wa nsuki mpembe na mpasi o mboka ya bawa. | |
Gene | LinVB | 44:32 | Ngai, mosaleli wa yo, nandimaki kobatela ye mpe nalobaki na tata : Nandimi komeme ngambo o miso ma yo bomoi bwa ngai mobimba, soko nazongisi ye awa te. | |
Gene | LinVB | 44:33 | Bongo ngai, mosaleli wa yo, nandimi kozala moombo wa yo, mokonzi wa ngai, o esika ya mwana. Mwana azonga o mboka elongo na bandeko ba ye. | |
Chapter 45
Gene | LinVB | 45:1 | Yosefu akoki kokanga motema lisusu te o miso ma bato banso bazalaki wana, agangi : « Bobimisa bato banso. » Moto mosusu azalaki na bango te ntango Yosefu amiyebisi na bandeko ba ye. | |
Gene | LinVB | 45:2 | Yosefu aleli makasi, bato banso bayoki yango, mpe nsango ekei tee o ndako ya Farao. | |
Gene | LinVB | 45:3 | Yosefu alobi na bandeko ba ye : « Ngai Yosefu ! Boni, tata azali ? » Kasi bandeko bakoki kozongisa liloba te. Awa bamoni ’te ezalaki ye babulungani. | |
Gene | LinVB | 45:4 | Yosefu alobi na ba-ngo : « Boya penepene na ngai. » Awa bakomi penepene, alobi na bango : « Ngai Yosefu, ndeko wa bino botekelaki ba-Ezipeti. | |
Gene | LinVB | 45:5 | Boyoka motema mpasi te, bomitungisa mpe te na ndenge botekeki ngai na bato bayaki na ngai awa. Nzambe moto atindaki ngai awa liboso lya bino mpo ya kobikisa bino. | |
Gene | LinVB | 45:6 | Nzala enene esili engali mibu mibale o mokili. Etikali mibu mitano bato bakokoka kokata bilanga te, kolona mbuma mpe te. | |
Gene | LinVB | 45:7 | Nzambe atindaki ngai o mokili moye o boso bwa bino mpo ’te bino na bana ba bino botikala na bomoi, mpe mpo ’te abikisa bato baike. | |
Gene | LinVB | 45:8 | Bino bato botindaki ngai awa te. Ezali Nzambe mpenza moto atindaki ngai awa, mpe akomisi ngai lokola tata wa Farao, mokonzi wa ndako ya ye mpe moyangeli wa mokili mwa Ezipeti mobimba. | |
Gene | LinVB | 45:9 | Bozonga noki epai ya tata mpe boloba na ye : Mwana wa yo Yosefu alobi boye : Nzambe aluboli ngai mokonzi wa Ezipeti mobimba. Yaka noki epai ya ngai. | |
Gene | LinVB | 45:10 | Okofanda o mokili mwa Gesen mpe okozala penepene na ngai, yo na bana ba yo, na bankoko ba yo, ngombe na bibwele na binso bizali na yo. | |
Gene | LinVB | 45:11 | Kuna ngai moto nakosalisa yo na bilei, bongo ozanga eloko te, yo na bana ba yo, na bato banso ba ndako ya yo, mpo nzala ekongala naino mibu mitano. | |
Gene | LinVB | 45:12 | Bino moko bozali komono na miso, ndeko wa ngai Benyamin mpe azali komono ’te ngai moko nazali koloba na bino. | |
Gene | LinVB | 45:13 | Boyebisa tata ’te nazwi lokumu lonene o Ezipeti, na mpe makambo manso bomonoki. Boya na tata wa ngai awa noki ! » | |
Gene | LinVB | 45:14 | Azingi ndeko wa ye Benyamin o nkingo mpe abandi kolela. Benyamin mpe azingi ye o nkingo, ye mpe aleli. | |
Gene | LinVB | 45:15 | Yosefu azingi bandeko ba ye banso ekopi, mai mabimeli ye o miso. Na nsima bandeko ba ye basololi na ye mingi. | |
Gene | LinVB | 45:16 | Nsango ekomi tee o ndako ya Farao ’te bandeko ba Yosefu bayaki. Farao na bato ba ye basepeli mingi. | |
Gene | LinVB | 45:17 | Mpe Farao alobi na Yosefu : « Loba na bandeko ba yo : Bozala boye : bobutisa biloko o mpunda ya bino mpe bozonga o mokili mwa Kanana. | |
Gene | LinVB | 45:18 | Bokamata tata wa bino na bato ba bino banso, bozonga epai ya ngai, nakopesa bino mabelé ma Ezipeti maleki malamu, mpe bokolia bilei kitoko bya mokili moye. | |
Gene | LinVB | 45:19 | Bongo yo, yebisa bango : Bosala boye : Bokamata makalo o mokili mwa Ezipeti mpo ya komene bana na basi ba bino, bokamata tata wa bino mpe boya. | |
Gene | LinVB | 45:20 | Boyoka mawa te mpo ya biloko bokotika kuna, zambi bokozwa biloko biye bileki malamu o mokili mwa Ezipeti. » | |
Gene | LinVB | 45:21 | Bana ba-Israel basali bobele bongo. Yosefu apesi bango makalo lokola Farao atindaki, apesi bango mpe bilei mpo ya mobembo. | |
Gene | LinVB | 45:22 | Apesi bango moko moko elamba yoko ya sika, kasi apesi Benyamin mitako mya palata nkama isato na mpe bilamba bya sika bitano. | |
Gene | LinVB | 45:23 | Atindeli mpe tata wa ye mpunda zomi ikumbi mbuma elengi ya Ezipeti, na mpe mpunda basi zomi ikumbi mbuma ya mampa na bilei bisusu mpo ya mobembo mwa tata wa ye. | |
Gene | LinVB | 45:24 | Na nsima atiki bandeko ba ye bakende, alobi na bango : « Bobanga likama lyoko o nzela te ! » | |
Gene | LinVB | 45:26 | Bayebisi ye : « Yosefu azali na bomoi, ye moto azali moyangeli o mokili mobimba mwa Ezipeti ! » Nzokande motema mwa Yakob motikali nye, mpo andimi maloba ma bango te. | |
Gene | LinVB | 45:27 | Bongo basololi ye makambo ma-nso Yosefu alobaki. Na nsima amoni makalo maye Yosefu atindaki mpo ya kokamata ye, mpe Yakob abandi kondima. | |
Chapter 46
Gene | LinVB | 46:1 | Israel akei na biloko bya ye binso, akomi o Berseba mpe abonzeli Nzambe wa tata wa ye Izaka mabonza. | |
Gene | LinVB | 46:2 | Na butu Nzambe alobi na ye o ndoto : « Yakob ! Yakob ! » Ye azongisi : « Ngai oyo ! » | |
Gene | LinVB | 46:3 | Nzambe alobi lisusu : « Ngai nazali Nzambe, Nzambe wa tata wa yo. Obanga te kokende o Ezipeti, zambi nakokomisa libota lya yo libota linene lya bankoko ebele. | |
Gene | LinVB | 46:4 | Nakokende elongo na yo o Ezipeti mpe nakozongisa yo lisusu awa. Ntango okokufa, Yosefu moto akokanga yo miso. » | |
Gene | LinVB | 46:5 | Yakob alo-ngwi o Berseba. Bana ba-Israel babutisi tata wa bango Yakob ná bana ná basi ba bango o makalo maye Farao apesaki bango. | |
Gene | LinVB | 46:6 | Bakei mpe na bibwele bya bango na biloko binso bazwaki o Kanana. Yakob na libota lya ye mobimba bakomi o Ezipeti, | |
Gene | LinVB | 46:7 | na bana babali na bana basi, mpe na bankoko ba ye. Akei na libota lya ye mobimba o Ezipeti. | |
Gene | LinVB | 46:8 | Tala nkombo ya bana babali ba-Israel baye bakomi o Ezipeti : Yakob na bana ba ye : Ruben, mwana wa yambo wa Yakob, | |
Gene | LinVB | 46:10 | Bana ba Simeon : Yemuel, Yamin, Oad, Yakin, Sokar na Saul, mwana wa mwasi wa Kanana. | |
Gene | LinVB | 46:12 | Bana ba Yuda : Er, Onan, Sela, Peres na Zera. Kasi Er na Onan bakufaki o mokili mwa Kanana. Nkombo ya bana ba Peres : Esron na Amul. | |
Gene | LinVB | 46:15 | Bango banso bana Lea aboteli Yakob o Padan-Aram, bakisa mwana mwasi Dina. Bango banso, babali na basi, bakoki ntuku isato na basato. | |
Gene | LinVB | 46:17 | Bana ba Aser : Yimna, Yisva, Yisvi, Beria na ndeko mwasi Sera. Bana ba Beria : Eber na Malkiel. | |
Gene | LinVB | 46:18 | Bango banso bana ba Zilpa, mwasi mosaleli oyo Laban apesaki mwana wa ye Lea. Yakob abotaki bango na Zilpa ; ba-ngo bakoki bato zomi na motoba. | |
Gene | LinVB | 46:20 | O Ezipeti Yosefu abotaki Manase na Efraim, bana abotaki na Asnat, mwana wa Potifera, nganga Nzambe wa engumba On. | |
Gene | LinVB | 46:21 | Bana ba Benyamin : Bela, Beker, Asbel, Gera, Naaman, Eki, Ros, Mupim, Kupim na Ard. | |
Gene | LinVB | 46:25 | Bango banso bana ba Bila, mwasi oyo Laban apesaki mwana wa ye Rakele. Yakob abotaki bango na Bila : banso bakoki bato nsambo. | |
Gene | LinVB | 46:26 | Bato banso ba libota lya Yakob bakendeki o Ezipeti bazalaki ntuku motoba na motoba, kotanga basi ba bana babali ba ye te. | |
Gene | LinVB | 46:27 | Bana babali Yosefu abotaki o Ezipeti bazalaki babale. Bongo bato banso ba libota lya Yakob, baye bakendeki o Ezipeti bakoki ntuku nsambo. | |
Gene | LinVB | 46:29 | Yosefu abongisi likalo mpe akei kokutana na tata wa ye Israel o Gesen. Nta-ngo amoni ye, Yosefu azingi tata ekopi, akweli ye o nkingo mpe aleli mingi. | |
Gene | LinVB | 46:30 | Israel alobi na Yosefu : « Sikawa nakoki kokende na boboto, mpo namoni elongi ya yo lisusu, mpe nakuti yo na bomoi ! » | |
Gene | LinVB | 46:31 | Yosefu alobi na bandeko ba ye mpe na libota lya tata wa ye : « Nakei koyebisa Farao, nakoloba na ye : “Bandeko ba ngai na libota lya tata wa ngai, baye bazalaki o mokili mwa Kanana, basili bakomi epai ya ngai. | |
Gene | LinVB | 46:32 | Bakokengeleke mpata mpe bakobokoloko bibwele ; bayei na mpata mpe na ngombe ya bango, na mpe biloko bya bango binso.” | |
Chapter 47
Gene | LinVB | 47:1 | Yosefu akei koyebisa Farao nsango, alobi na ye : « Tata na bandeko ba ngai bauti o mokili mwa Kanana, bakomi awa na mpata na ngombe mpe na biloko bya bango binso. Sikawa bazali o mokili mwa Gesen. » | |
Gene | LinVB | 47:3 | Oyo atuni bango : « Bokosalaka mosala nini ? » Bazongisi : « Biso basaleli ba yo tozali babokoli ba mpata, se lokola batata ba biso. » | |
Gene | LinVB | 47:4 | Balobi na Farao : « Toyei kofanda o mokili mwa yo, zambi epai ya biso matiti mazali lisusu te mpo toleisa bibwele bya biso, mpo nzala ezali kongala o mokili mwa Kanana. Lingisa biso basaleli ba yo tofanda o mokili mwa Gesen. » | |
Gene | LinVB | 47:5 | Farao alobi na Yosefu : « Bafanda o mokili mwa Gesen, mpe soko o kati ya bango bato basusu babongi na mosala mwa kapita, bakoma bakengeli ba bibwele bya ngai moko. » Yakob na bana ba ye bakei o Ezipeti epai ya Yosefu. Farao, mokonzi wa Ezipeti, ayoki yango mpe alobi na Yosefu : « Nakopesa yo esika o mokili mwa Ezipeti ; ponela tata na bandeko ba yo esika eleki malamu mpo bafanda. » | |
Gene | LinVB | 47:6 | Farao alobi na Yosefu : « Bafanda o mokili mwa Gesen, mpe soko o kati ya bango bato basusu babongi na mosala mwa kapita, bakoma bakengeli ba bibwele bya ngai moko. » Yakob na bana ba ye bakei o Ezipeti epai ya Yosefu. Farao, mokonzi wa Ezipeti, ayoki yango mpe alobi na Yosefu : « Nakopesa yo esika o mokili mwa Ezipeti ; ponela tata na bandeko ba yo esika eleki malamu mpo bafanda. » | |
Gene | LinVB | 47:7 | Yosefu abyangisi tata wa ye Yakob mpe akei na ye epai ya Farao. Yakob apesi Farao losako. | |
Gene | LinVB | 47:9 | Yakob azongisi : « Mobembo mwa ngai o mokili moumeli mibu mo-nkama na ntuku isato. Ezali se eleko ekuse mpe nazalaki na mpasi mingi o bomoi bwa ngai ; nakokisi mibu mya bankoko ba ngai naino te, mikolo bazalaki awa o nse. » | |
Gene | LinVB | 47:11 | Yosefu afandisi tata na bandeko ba ye o mokili mwa Ezipeti, apesi bango mabelé maleki malamu o mokili mwa Ramses, se lokola Farao atindaki. | |
Gene | LinVB | 47:12 | Yosefu apesi tata wa ye, bandeko ba ye na mpe libota lya tata wa ye mobimba bilei, engebene na motango mwa bana ba bango. | |
Gene | LinVB | 47:13 | O mokili mobimba bilei bizalaki lisusu te, zambi nzala engali makasi. Ba-Ezipeti na ba-Kanana balingaki bakufa na nzala. | |
Gene | LinVB | 47:14 | Yosefu azwi mosolo monso mwa mokili mwa Ezipeti, na mpe mosolo mwa mokili mwa Kanana, na botekeli bato mbuma ya mampa. Azalaki kotika mosolo monso o ndako ya Farao. | |
Gene | LinVB | 47:15 | Esili mosolo monso mwa mokili mwa Ezipeti mpe mwa Kanana, ba-Ezipeti bakei epai ya Yosefu, balobi na ye : « Pesa biso bilei tolia. Awa tozali na mosolo lisusu te, olingi tokufa na nzala o miso ma yo, solo ? » | |
Gene | LinVB | 47:16 | Yosefu alobi na bango : « Botikela ngai bibwele bya bino. Awa bozali na mosolo lisusu te, nakopesa bino bilei, soko botikeli ngai bibwele. » | |
Gene | LinVB | 47:17 | Bayeli Yosefu bi-bwele bya bango mpo ’te bazwa bilei ; batikeli ye farasa, ngombe, mpata na mpe mpunda ; azwi bibwele bya bango binso, mpe apesi bango bilei bikoki na mobu mona. | |
Gene | LinVB | 47:18 | Esili mobu mona, bazongeli ye lisusu o mobu nwa nsima, balobi na ye : « Tokoki kokombela mokonzi wa biso likambo te. Mosolo mwa biso mosili nye, mpe bibwele bya biso bisili bikomi o maboko ma yo, mokonzi wa biso. Etikali na biso sikawa nzoto ya biso moko na mabelé ma biso, esili. | |
Gene | LinVB | 47:19 | Mpo nini tokufa mpamba boye o miso ma yo, na mabelé ma biso lokola ? Bongo kamata biso na mpe mabelé ma biso, mpe pesa biso bilei ; biso elongo na mabelé ma biso tokosalela Farao. Pesa biso milona mpo tobika ; tokufa te mpe mabelé ma biso matikala mpamba te. » | |
Gene | LinVB | 47:20 | Yosefu azweli Farao mokili mobimba mwa Ezipeti, zambi ba-Ezipeti banso bateki bilanga bya bango mpo ya nzala ezalaki kongala makasi. Farao akomi nkolo wa mabelé manso ma Ezipeti. | |
Gene | LinVB | 47:21 | Mpe bato ba ye mpenza, akomisi bango banso baombo, o ekolo mobimba banda Nordi kin’o Sudi. | |
Gene | LinVB | 47:22 | Kasi Yosefu azwaki mabelé ma banganga Nzambe te, zambi Farao azalaki kopesa bango mosolo sanza na sa-nza ; bazalaki kobika na mwango ; bongo basengelaki koteke mabelé ma bango te. | |
Gene | LinVB | 47:23 | Yosefu alobi na bato : « Nasali ’te Farao azwa bino moko na mpe mabelé ma bino. Boswa mbuma ya kolona o bilanga bya bino. | |
Gene | LinVB | 47:24 | Kasi ekomi eleko ya bobuki mbuma, bosengeli kopesa Farao eteni ya bitano ; biteni bisusu binei bino bokozwa byango mpo ’te bolona o bilanga mpe bozwa bilei bya bino, bya bana ba bino mpe bya bato ba bino banso. » | |
Gene | LinVB | 47:25 | Bango bazongisi : « Obikisi biso ! Yo mokonzi wa biso, sala biso se malamu, tokozala basaleli ba Farao. » | |
Gene | LinVB | 47:26 | Yosefu abimisi mobeko moko, mosali na bango tee lelo : Ba-Ezipeti bapesa Farao eteni ya bitano ya mbuma ya bilanga. Bobele mabelé ma banganga Nzambe mazali mabelé ma Farao te. | |
Gene | LinVB | 47:27 | Israel afandi o Ezipeti o mokili mwa Gesen. Kuna bazwi mabelé, baboti mingi mpe bakomi libota linene. | |
Gene | LinVB | 47:28 | Yakob aumeli mibu zomi na nsambo o mokili mwa Ezipeti ; bongo o bomoi bwa ye mobimba akokisi mibu monkama na ntuku inei na nsambo. | |
Gene | LinVB | 47:29 | Awa mokolo mwa liwa lya ye mokomi penepene, Israel abengi mwana wa ye Yosefu, alobi na ye : « Soko olingi kozala ngai malamu, tia loboko la yo o nse ya ebelo ya ngai, lakisa ngai ’te olingi ngai solo, bongo layela ngai ’te okokunda ngai o Ezipeti te. | |
Gene | LinVB | 47:30 | Nakokende kokutana na bankoko ba ngai ; yo okolongola ngai o Ezipeti mpe okokunda ngai o lilita lya bango. » Alobi na tata wa ye : « Nakosala lokola olobi. » | |
Chapter 48
Gene | LinVB | 48:1 | Esili makambo mana, bayei koyebisa Yosefu : « Tata wa yo azali kobele. » Bongo akei na bana ba ye babale, Manase na Efraim. | |
Gene | LinVB | 48:2 | Balobi na Yakob : « Mwana wa yo Yosefu ayei. » Na makasi ma ye manso Israel amifandisi o mbeto. | |
Gene | LinVB | 48:3 | Alobi na Yosefu : « Nzambe wa bokasi bonso abimelaki ngai o mboka Luz o mokili mwa Kanana, abenisaki ngai na maloba maye : | |
Gene | LinVB | 48:4 | “Nakopesa yo nguya ya kobota mpo ’te ozwa bana baike. Nakokomisa yo lingomba linene lya bato. Nakopesa bankoko ba yo mokili moye, bafanda seko kuna.” | |
Gene | LinVB | 48:5 | Yango wana bana ba yo babale, baye obotaki o mokili mwa Ezipeti, liboso ’te naya epai ya yo o Ezipeti, bakosala bana ba ngai ! Efraim na Manase bakozala bana ba ngai, se lokola Ruben na Simeon bazali bana ba ngai. | |
Gene | LinVB | 48:6 | Bana obotaki nsima bakozala bana ba yo. O mokolo bakokabola mokili, bakozwa esika se lokola bandeko ba bango. | |
Gene | LinVB | 48:7 | Mokolo nalongwaki o Padan, mama wa yo Rakele awaki o mokili mwa Kanana o nzela penepene na Efrata. Nakundaki ye bobele kuna o nzela ya Efrata, o Beteleme. » | |
Gene | LinVB | 48:9 | Yosefu azongiseli tata wa ye : « Bazali bana Nzambe akabeli ngai awa. » Tata alobi lisusu : « Yaka na bango awa, nabenisa bango. » | |
Gene | LinVB | 48:10 | Miso ma Israel malembi mpo ya bonuna, azalaki komono malamu lisusu te. Yosefu ayei na bango penepene na tata. Israel ayambi bango mpe azingi bango ekopi. | |
Gene | LinVB | 48:11 | Alobi na Yosefu : « Nakanisaki soki moke te ’te nakomono lisusu elongi ya yo, mpe tala, Nzambe amonisi ngai mpe bana ba yo. » | |
Gene | LinVB | 48:13 | Yosefu akamati bana ba ye babale, asimbi Efraim na loboko la mobali, mpo ’te azala o loboko la mwasi wa Israel ; asimbi Manase na loboko la mwasi mpo ’te azala o loboko la mobali la Israel, atii bango penepene na ye. | |
Gene | LinVB | 48:14 | Kasi Israel atandi loboko la mobali o motó mwa Efraim, mwana wa nsuka, mpe loboko la mwasi o motó mwa Manase. Kasi, awa maboko matandami bongo, abungi, mpo Manase azali mwana wa yambo. | |
Gene | LinVB | 48:15 | Abenisi Yosefu, alobi : « Nzambe oyo nkoko wa ngai Abarama mpe tata wa ngai Izaka batosaki, Oyo azalaki mokengeli wa ngai ut’o bomwana bwa ngai tee lelo, | |
Gene | LinVB | 48:16 | Anzelu oyo abikisaki ngai o mabe manso, abenisa bana baye, bato banso bakumisa nkombo ya ngai na mpe nkombo ya batata ba ngai Abarama na Izaka mpo ya ba-ngo. Babota bana baike mpe bakoma bato ebele o mokili ! » | |
Gene | LinVB | 48:17 | Ntango Yosefu amoni ’te tata wa ye atii loboko la mobali o motó mwa Efraim, mpo yango esepelisi ye te. Asimbi loboko la tata wa ye, mpo ’te alongola lango o motó mwa Efraim mpe atia lango o motó mwa Manase. | |
Gene | LinVB | 48:18 | Alobi na tata wa ye : « Tata, bongo te, mwana oyo azali mwana wa yambo, tia loboko la mobali o motó mwa ye. » | |
Gene | LinVB | 48:19 | Kasi tata wa ye aboyi, alobi : « Nayebi, mwana. Solo, ye mpe akokoma etuka enene, akozala moto monene, kasi leki wa ye akoleka ye, bankoko ba ye bakotondisa ekolo mobimba. » | |
Gene | LinVB | 48:20 | O mokolo mona abenisi bango, alobi : « O Israel babenisa bato na nkombo ya yo na maloba maye : Nzambe asala yo malamu lokola asalaki Efraim na Manase. » Atangi nkombo ya Efraim liboso. | |
Gene | LinVB | 48:21 | Na nsima Israel alobi na Yosefu : « Liwa lya ngai likomi penepene, kasi Nzambe akobatela yo, mpe akozongisa yo o mokili mwa ba-nkoko ba yo. | |
Chapter 49
Gene | LinVB | 49:1 | Yakob abengi bana ba ye, alobi : « Boya, nayebisa bino manso makokwela bino o bileko bikoya nsima. | |
Gene | LinVB | 49:3 | Ruben, ozali mwana wa ngai wa yambo, yo bokasi bwa ngai, yo mbuma ya liboso nabotaki. Opusi litundu, oleki makasi. | |
Gene | LinVB | 49:4 | Okotomboko lokola ebale, kasi okozala moto wa liboso te, mpo olalaki o mbeto ya tata wa yo ; obebisaki mbeto eye ngai nalalaki. | |
Gene | LinVB | 49:6 | Nakoma te o esika bayokani, nasangana na likita lya bango te, zambi na nkanda ya bango babomaki bato, mpe na mobulu mwa bango bazokisaki ngombe babali. | |
Gene | LinVB | 49:7 | Naboyi nkanda ya bango eleki makasi, naboyi nkele ya bango ezali na mawa te. Nakokabola bango o mokili mwa Yakob, nakopanza bango o ekolo Israel. | |
Gene | LinVB | 49:8 | Yo Yuda, bandeko ba yo bakokumisa yo ; loboko la yo lokokweisa banguna, mpe bana ba tata wa yo bakofukamela yo. | |
Gene | LinVB | 49:9 | Yo Yuda, ozali lokola mwana wa ntambwe ! Yo mwana wa ngai, obomaki banguna. Soko ntambwe mobali alali to ntambwe mwasi ayoki mpongi, nani akomeka kolamusa ye ? | |
Gene | LinVB | 49:10 | Boko-nzi bokolongwa o Yuda te, mpe montongo mya bokonzi mokolongwa o kati ya makolo ma ye te tee mokolo nkolo wa yango akoya, oyo bato ba bikolo binso bakotosa. | |
Gene | LinVB | 49:11 | Akokanga mpunda ya ye o nzete ya vino mpe mwana wa mpunda o etapi ya nzete ; akosukola elamba o vino, mpe monkoto mwa ye o mai ma mbuma ya vino. | |
Gene | LinVB | 49:13 | Zabulon akofanda penepene na mbu ; o libongo akozala na masuwa ma ye, mokili mwa ye mokoma tee Sidon. | |
Gene | LinVB | 49:15 | Amoni ’te kopema ezali malamu, mpe mokili mosali elengi. Akitisi lipeke mpo ya komeme mokumba, akomi moombo wa mosala. | |
Gene | LinVB | 49:17 | Akosala lokola nyoka o nzela, lokola etupa esika bato bakoleka, ekozwa farasa o litindi mpe ekokweisa motambwisi wa yango o nse. | |
Gene | LinVB | 49:22 | Yosefu azali lokola ngombe mobali penepene na liziba, eye ekopimbwa likolo lya lopango la ngombe. | |
Gene | LinVB | 49:24 | Moto wa nguya abuki litimbo lya bango, misisa mya maboko ma bango mikatani na maboko ma Nzambe wa Yakob, oyo bakobengaka Mokengeli, Libanga lya Israel. | |
Gene | LinVB | 49:25 | Nzambe wa tata wa yo akosalisa yo, Nzambe wa bokasi bonso akobenisa yo. Mapamboli maye makouta o likolo, na maye makouta o nse ya mabelé, maye makouta o libumu mpe o mabéle ma mwasi, | |
Gene | LinVB | 49:26 | maye makouta o mitó mya masangu mpe o fulele, makouta o ngomba ya kala, o ngomba ya bileko na bileko : mapamboli mana manso makitela Yosefu, matangela ye o nsuki ya ye, zambi apambolami liboso lya ba-ndeko ba ye. | |
Gene | LinVB | 49:27 | Benyamin azali nkoi mobali, mobomi ; na ntongo akolia nyama ya ye, tee mpokwa akosilisa eye etikalaki. » | |
Gene | LinVB | 49:28 | Bango banso bazali mabota ma Israel, bazali bikolo zomi na bibale. Maloba maye mazali maloba ma tata wa bango : abenisi bango lokola ekoki na moko moko. | |
Gene | LinVB | 49:29 | Yakob atindi bana ba ye, alobi : « Nakei kokutana na bankoko. Bokunda ngai esika yoko na batata ba ngai o mobenga mozali o elanga ya mo-Eti Efron, | |
Gene | LinVB | 49:30 | o mobenga o ela-nga ya Makpela, o Esti ya Mambre o mokili mwa Kanana ; Abarama asombaki yango o maboko ma mo-Eti Efron mpo ’te azwa esika ya kokunda bato ba ye. | |
Gene | LinVB | 49:31 | Bakundaki ye na mwasi wa ye Sara esika bakundaki mpe Izaka na mwasi wa ye Rebeka, nakundaki mpe Lea kuna. | |
Chapter 50
Gene | LinVB | 50:1 | Yosefu akitisi motó pene pene na elongi ya tata wa ye, azingi ye ekopi, mai ma miso mazalaki kotangela tata wa ye. | |
Gene | LinVB | 50:2 | Na nsima atindi banganga baye bazalaki na ye ’te bapakola nzoto ya tata wa ye malasi. Banganga bapakoli Israel mafuta ma malasi. | |
Gene | LinVB | 50:3 | Basali mikolo ntuku inei mpo ya kobongisa yango malamu ; bopakoli ebembe malasi bokoumelaka mingi boye. Ba-Ezipeti basali lilaka mikolo ntuku nsambo. | |
Gene | LinVB | 50:4 | Esili lilaka, Yosefu alobi na bato ba Farao : « Soko bolingi ngai solo, boloba o matoi ma Farao : | |
Gene | LinVB | 50:5 | Tata wa ngai alayisi ngai ndai eye : Sikawa nalingi nakufa. Nazali na lilita o mokili mwa Kanana, ngai moko natimolaki lyango ; okokunda ngai kuna. Bongo nalingi kokende kuna mpo ’te nakunda tata wa ngai ; na nsima nakozonga. » | |
Gene | LinVB | 50:7 | Yosefu akei kokunda tata wa ye. Basaleli banso ba Farao na bankumu ba ndako ba ye mpe bankumu banso ba mokili mwa Ezipeti bakei na ye elongo. | |
Gene | LinVB | 50:8 | Libota mobimba lya Yosefu, ná bandeko ba ye, ná bato banso ba tata wa ye, bakei lokola. Etikali o mokili mwa Gesen se bana bake, mpata na ngombe. | |
Gene | LinVB | 50:10 | Ntango bakomi o Goren-a-Atad, o ngambo ya Yordane, basali matanga manene ma bokundi Yakob. Yosefu asali lilaka lya tata wa ye mikolo nsambo. | |
Gene | LinVB | 50:11 | Bato ba mokili mwa Kanana bamoni lilaka o Goren-a-Atad, balobi : « Ba-Ezipeti basali lilaka linene mpenza. » Yango wana bapesi etuka ena o ngambo ya Yordane nkombo : Abel Misrayim. | |
Gene | LinVB | 50:13 | Bakei na ebembe ya ye o mokili mwa Kanana, mpe bakundi ye o mobenga o elanga ya Makpela, eye Abarama asombaki o maboko ma mo-Eti Efron, o Esti ya Mambre. | |
Gene | LinVB | 50:14 | Yosefu azongi o Ezipeti elongo na bandeko ba ye mpe na bato ba-nso bakendeki kokunda tata wa ye. | |
Gene | LinVB | 50:15 | Nsima ya liwa lya tata, bandeko ba Yosefu, balobani : « Mbele sikawa Yosefu akoyina biso mpe akosongisela biso mabe manso tosalaki ye. » | |
Gene | LinVB | 50:16 | Yango wana batindeli Yosefu maloba maye : « Liboso ’te akufa tata apesaki biso motindo moye : | |
Gene | LinVB | 50:17 | « Boloba na Yosefu : Nabondeli yo, limbisa bandeko lisumu lya bango mpe mabe manso basalaki yo. » Bongo limbisa sikawa mabe ma basaleli ba Nzambe wa tata wa yo. » Eyoki Yosefu maloba ma bango, abandi kolela. | |
Gene | LinVB | 50:18 | Bandeko ba ye bango moko bayei, bakwei o boso bwa ye mpe balobi : « Toyei, tala tosali baombo ba yo. » | |
Gene | LinVB | 50:20 | Mabe bolingaki kosala ngai, Nzambe akomisi mango ntina ya kosala maye masalemi sikawa ; abikisi bomoi bwa bato baike. | |
Gene | LinVB | 50:21 | Bongo bobanga te, ngai moto nakoleisa bino na bana ba bino. » Na maloba maye ma boboto akitisi bango mitema. | |
Gene | LinVB | 50:22 | Yosefu atikali kofanda o Ezipeti elongo na libota mobimba lya tata wa ye. Akokisi mibu monkama na zomi. | |
Gene | LinVB | 50:23 | Amoni bana ba Efraim na bankoko ba ye, na mpe bankokolo ba ye. Bana ba Makir, mwana wa Manase, Yosefu ayambi bango o bibelo mokolo babotamaki. | |
Gene | LinVB | 50:24 | Nsima ya yango Yosefu alobi na bandeko : « Nalingi nakufa, kasi Nzambe akopangana na bino : akolongola bino o mokili moye mpo ’te azongisa bino o mokili moye alakelaki Abarama,IzakanaYakob. » | |
Gene | LinVB | 50:25 | Yosefu alayisi bana ba-Israel ndai eye : « Mokolo Nzambe akoya kotala bino, bomeme minkuwa mya ngai. » | |