SIRACH
Up
Chapter 1
Sira | LinVB | 1:2 | Nani ayebi kotanga mbuma ya zelo o libongo lya mbu, na matanga ma mbula, na mikolo boni mokili mokoumela ? | |
Sira | LinVB | 1:8 | Oyo azali na bwanya mpe basengeli kobanga, azali se moko : ye Mokonzi oyo afandi o ngwende ya ye. | |
Sira | LinVB | 1:9 | Ye Mokonzi akeli bwanya, amoni bwango mpe atali bonene bwa bwango ; akaboli bwango na bikelamo binso, | |
Sira | LinVB | 1:12 | Bobangi Nzambe bokoyokisaka motema nsai, bokopesaka moto elongi polele mpe bomoi bolai. | |
Sira | LinVB | 1:14 | Ebandela ya bwanya, nde bobangi Mokonzi, bato balamu bakozwaka bwango uta libumu lya mama. | |
Sira | LinVB | 1:19 | bokonoisa mbula ya mayele mpe ya boyebi makambo, bokokolisa lokumu la bato bazali na bwango. | |
Sira | LinVB | 1:20 | Bobangi Mokonzi, nde minsisa mya nzete ya bwanya, bitapi bya nzete, nde bomoi bolai. | |
Sira | LinVB | 1:24 | Akoloba naino te tee ntango ya koloba ebongi, mpe bato banso bakokumisa bwanya bwa ye. | |
Sira | LinVB | 1:25 | Biyele bya boyebi bizwami o kati ya maloba ma bwanya, kasi koyeba maye Nzambe alingi ekoyokisaka mosumuki nsomo. | |
Sira | LinVB | 1:27 | Moto akobangaka Mokonzi, akozwa bwanya mpe mayele, Mokonzi Nzambe alingi botosi mpe boboto. | |
Chapter 2
Sira | LinVB | 2:1 | Mwana wa ngai, soko olingi kosalela Mokonzi, omilengele mpo oyeba kondima mpasi ya mokili. | |
Sira | LinVB | 2:5 | mpo bakomekaka bato ba Nzambe o makambo makitisi bango, lokola bakomekaka wolo na móto. | |
Sira | LinVB | 2:6 | Tia motema na Nzambe mpe ye akosalisa yo, otambola nzela ya bosembo mpe tia elikya na ye. | |
Sira | LinVB | 2:7 | Bino baye bokobangaka Mokonzi, bolikya na ngolu ya ye, botika nzela ya ye te mpo ’te bokweya te. | |
Sira | LinVB | 2:9 | Bino baye bokobangaka Mokonzi, boyeba ’te bokozwa bolamu, bokoyoka esengo ya seko mpe Nzambe akoyokela bino ngolu. | |
Sira | LinVB | 2:10 | Botala ndenge nini bankoko bazalaka mpe bokanisa : Nani atiaki motema na Nzambe mpamba ? Nani azalaki kobanga ye, mpe Mokonzi atiki ye ? Nani abondelaki ye, mpe Mokonzi andimeli ye te ? | |
Sira | LinVB | 2:11 | Ntembe te, Mokonzi azali motema nta bolamu mpe ngolu, akolimbisaka masumu mpe akobikisaka bato o ntango ya mpasi. | |
Sira | LinVB | 2:12 | Mawa na bato bapusi kobangabanga mpe baye balembi mosala, mawa na mosumuki oyo akolandaka nzela ibale. | |
Sira | LinVB | 2:14 | Mawa na bino bato botiaki molende te, mokolo Mokonzi akotuna bino, bokosala nde nini ? | |
Sira | LinVB | 2:15 | Baye babangi Mokonzi bakoboya maloba ma ye te, baye balingi ye bakotosa mibeko mya ye. | |
Sira | LinVB | 2:16 | Baye babangi Mokonzi bakoluka kosepelisa ye, baye balingi ye bakotosa Mobeko mwa ye. | |
Sira | LinVB | 2:17 | Baye babangi Mokonzi bakobongisaka mitema, bayebi komikitisa o miso ma ye, bakolobaka. | |
Chapter 3
Sira | LinVB | 3:2 | Mpo Mokonzi alingi ’te bana bakumisaka tata wa bango, atii mama mokonzi wa bana ba ye babali. | |
Sira | LinVB | 3:6 | Moto akokumisa tata, akoumela mibu miike o mokili, oyo akotosa Mokonzi, akosepelisa mama wa ye, | |
Sira | LinVB | 3:9 | Zambi bobenisi bwa tata bokolendisa bana, kasi libota likobeba soko mama atombeli lyango bobe. | |
Sira | LinVB | 3:12 | Mwana wa ngai, salisa tata soko akomi mobange, ata mokolo moko oyokisa ye motema mpasi te. | |
Sira | LinVB | 3:14 | Malamu osali tata, Nzambe akobosana mango te, mpo ya bosalisi bwa yo, Nzambe akolimbisa yo masumu. | |
Sira | LinVB | 3:15 | Mokolo okoyoka mpasi, Nzambe akokanisa yo, masumu ma yo makolimwa lokola galasi ikonyangwaka na moi. | |
Sira | LinVB | 3:16 | Moto aboyi kosalisa tata, azali lokola moto atuki Nzambe, oyo ayokisi mama mpasi, Mokonzi akotombela ye bobe. | |
Sira | LinVB | 3:17 | Mwana wa ngai, manso okosala, sala mango na boboto, bongo bato bakolinga yo leka moto akokabaka biloko. | |
Sira | LinVB | 3:21 | Maye maleki makasi ma yo, oluka kosala mango te, maye maleki mayele ma yo, omeka koyeba mango te. | |
Sira | LinVB | 3:23 | Omilembisa te na maye maleki yo makasi, mateya basili kolakisa yo maleki mayele ma bato. | |
Sira | LinVB | 3:24 | Lolendo losili lobebisi mayele ma bato mingi, mpe lofundo lobungisi makanisi ma bango. ( | |
Sira | LinVB | 3:27 | Oyo azali motó makasi akoyoka mpasi mingi, mosumuki akokoba kosala mabe ntango inso. | |
Sira | LinVB | 3:28 | Bakoki kobikisa moto wa lolendo o mpasi ya ye te, zambi bobe bopikami o motema mwa ye. | |
Sira | LinVB | 3:29 | Moto wa bwanya akomanyolaka biyele o motema, oyo akotiaka matoi na baninga, akokolisa bwanya bwa ye. | |
Chapter 4
Sira | LinVB | 4:2 | Oyokisa moto akufi na nzala mpasi te, moto azangi biloko, oyokisa ye motema bololo te. | |
Sira | LinVB | 4:10 | Omilakisa na bana bitike lokola tata, mpe osalisa mama wa bango lokola mobali wa ye azalaki kosala. Bongo Nzambe wa nta likolo akotanga yo mwana wa ye, mpe akolinga yo na bolingi boleki boye bwa mama wa yo. | |
Sira | LinVB | 4:12 | Moto alingi bwanya, alingi bomoi, bato bakoluka bwango uta ntongo, bakotonda na esengo. | |
Sira | LinVB | 4:13 | Moto azali na bwanya, akosangola lokumu, bipai binso akokende, Mokonzi akobenisa ye. | |
Sira | LinVB | 4:15 | Oyo akolanda bwanya, akosambisa bato na bosembo, mpe oyo akoluka bwango, likama likokwela ye te. | |
Sira | LinVB | 4:16 | Moto akotiaka motema na bwanya, akozala na bwango, mpe bana ba ye bakosepela na bwango. | |
Sira | LinVB | 4:17 | O ebandela bwanya bokokamba yo o nzela mabunu mabunu, okotambola na bobangi mpe na nsomo o motema, okoyoka mpasi mpo ya mibeko mya bwango, tee okondima ’te bwanya bokambi yo o nzela ya solo. Bwanya bokomeka yo na mibeko mingi, | |
Sira | LinVB | 4:18 | kasi nzela yango ekosuka se malamu mpe ekosepelisa yo, mpe okoyeba ntina ya makambo manso mabombami. | |
Sira | LinVB | 4:20 | Okeba na maye mazali koleka mpe omikengele mpo ’te osala mabe te, ezalela ya yo eyokisa yo nsoni te. | |
Sira | LinVB | 4:21 | Zambi nsoni ekoki kobenda moto o nzela ya masumu, kasi nsoni esusu ekopesaka lokumu mpe bolamu. | |
Sira | LinVB | 4:24 | Bwanya bwa moto bokoyebana na maloba ma ye, makambo moto akobimisa makolakisa mayele ma ye. | |
Sira | LinVB | 4:26 | Oyoka nsoni te mpo ya kosakola masumu ma yo, omeka te kokangisa mai matiyoli o ebale. | |
Chapter 5
Sira | LinVB | 5:3 | Oloba te : « Nani akoki kotinda ngai ? » Oyeba ’te Mokonzi akozanga te kopesa yo etumbu. | |
Sira | LinVB | 5:4 | Oloba te : « Nasali lisumu, mpe mabe makweli ngai te ! » Oyeba ’te Mokonzi akopesaka etumbu noki te. | |
Sira | LinVB | 5:6 | Oloba te : « Nzambe azali motema nta ngolu, akolimbisa ngai masumu, ata mazali ebele. » Oyeba ’te Nzambe azali na ngolu mpe na nkanda ; nkanda ya ye ekokwela basumuki. | |
Sira | LinVB | 5:7 | Ozongela Mokonzi se lelo, ozila mokolo mwa lobi te, zambi nkanda ya Mokonzi ekongala na mbalakaka, ekoboma yo o mokolo mwa etumbu. | |
Sira | LinVB | 5:8 | Otia motema te na nkita ozwi na boyibi, ekosalisa yo ata moke te o mokolo mwa likama. | |
Sira | LinVB | 5:9 | Opupola mbuma bipai binso te, mpe olanda nzela inso te, mosumuki wa minoko mibale akosalaka bongo. | |
Sira | LinVB | 5:14 | Keba ’te okoma moto wa songisongi te, na lolemu la yo otiela bato mitambo te. Mpamba te, lokola moyibi asila lokumu, moto wa lokuta akozwa etumbu ya ye. | |
Chapter 6
Sira | LinVB | 6:1 | Soko nkombo ya yo ekomi kotambola, osambwi, lokola mosumuki oyo akolobaka minoko mibale. | |
Sira | LinVB | 6:2 | Omikomisa moombo wa mposa ya motema te, mpo ’te basilisa makasi ma yo te lokola bakoseseke ngombe, | |
Sira | LinVB | 6:3 | mpe okoma lokola nzete te, eye esili nkasa na mbuma, ekufi mpe ekauki, etikali nkoni mpamba. | |
Sira | LinVB | 6:5 | Na maloba ma boboto okozwa baninga mingi, soko ozali na maloba ma bondeko bakozongisela yo malamu. | |
Sira | LinVB | 6:6 | Oluka kozala bondeko na bato banso, kasi o kati ya bato nkoto bobele moko apesa yo malako. | |
Sira | LinVB | 6:9 | Moninga mosusu akoki kokoma monguna, akoyokisa yo nsoni na bobimisi boswani bwa bino na ye. | |
Sira | LinVB | 6:12 | kasi soko okokoma na mpasi, akokoma monguna wa yo, mpe okomono ye epai ya yo lisusu te. | |
Sira | LinVB | 6:16 | Moninga wa solo akoyokisa bomoi bwa yo elengi, bobele bato bakobangaka Mokonzi, bakozwa ye. | |
Sira | LinVB | 6:17 | Oyo akobangaka Mokonzi akozala na moninga wa solo, mpo moninga akozala se lokola yo moko. | |
Sira | LinVB | 6:18 | Mwana wa ngai, ondima koyoka mateya banda bolenge, bongo okozwa bwanya kin’o bobange bwa yo. | |
Sira | LinVB | 6:19 | Kolisa bwango lokola moloni mbuma akosalaka na bilanga, mpe akozila mbuma ya ye itela malamu. Okoyoka mwa mpasi mpo ya kokolisa bwanya, kasi mosika te okolia mbuma ya bwango. | |
Sira | LinVB | 6:20 | Bilema bakondimaka bwanya se na mpasi, moto azangi mayele akokangana na bwango te. | |
Sira | LinVB | 6:24 | Kanga makolo ma yo na monyololo mwa bwango, tia nkingo ya yo o ekangiseli ya bwango. | |
Sira | LinVB | 6:27 | Luka bwanya mpe landa se nzela ya bwango, bongo bwanya bokomiyebisa epai ya yo ; mpe soko osili okangi bwango, otika bwango lisusu te. | |
Sira | LinVB | 6:29 | Ekangiseli ya bwanya ekobatela yo malamu, minyololo mya bwango nde molato mwa yo mwa nkembo. | |
Sira | LinVB | 6:30 | Mokumba mwa bwanya mozali wolo ekokembisa yo, mokaba mwa bwango mozali nsinga ya longondo. | |
Sira | LinVB | 6:32 | Mwana, soko otii motema okoyeba makambo mingi, soko olingi solo, okokoma moto wa mayele. | |
Sira | LinVB | 6:33 | Soko olingi koyoka bato, okokolisa mayele, soko ofungoli matoi, akokoma moto wa bwanya. | |
Sira | LinVB | 6:36 | Soko oyebi moto wa bwanya, kende epai ya ye na ntongo ntongo, onyata libanga lya monoko mwa ndako ya ye ntango inso, elembo ya matambi ma yo etikala wana. | |
Chapter 7
Sira | LinVB | 7:5 | O miso ma Mokonzi Nzambe omitanga moto semba te, o miso ma mokonzi wa ekolo omitanga moto wa bwanya te. | |
Sira | LinVB | 7:6 | Oluka kokoma zuzi te soko oyebi kosilisa makambo mazangi bosembo te, mbele okobanga elongi ya moto monene, mpe okobungisa bosembo. | |
Sira | LinVB | 7:9 | Oloba te : « Nzambe wa nta likolo akomono mabonza ma ngai mingi, akoyamba maye nakobonzela ye ! » | |
Sira | LinVB | 7:17 | Omikitisa o nse kin’o mabelé, zambi moto aboyi Nzambe akozwa etumbu ya móto na nkusu. | |
Sira | LinVB | 7:19 | Mwasi malamu mpe wa bwanya, olongola ye te, mpo ya boboto bwa ye aleki wolo na motuya. | |
Sira | LinVB | 7:20 | Moombo azali na mpiko o mosala, onyokolo ye te, mosali mpe te, oyo akomipesaka na mosala mwa ye. | |
Sira | LinVB | 7:22 | Soko ozali na bibwele, kengele byango, soko bizweli yo litomba, olongola byango te. | |
Sira | LinVB | 7:26 | Soko ozali na mwasi akoki na yo, obengana ye te, kasi soko olingi ye te, otia motema na ye te. | |
Sira | LinVB | 7:28 | Okanisa ’te bango mpenza baboti yo ; ndenge nini okozongisela bango manso basalaki mpo ya yo ? | |
Sira | LinVB | 7:31 | Banga Mokonzi mpe memya nganga Nzambe, pesa ye ndambo ya biloko lokola etindami : mbuma ya yambo, miboma mya bolimbisi masumu, libonza lya mapeke ma ntaba, miboma mya bosantisi, mpe eteni ya liboso lya biloko bisantu binso. | |
Chapter 8
Sira | LinVB | 8:2 | Oswana na moto wa nkita te, mpo ’te alonga yo o esambi te ; mpamba te, wolo esili ebungisi bato mingi, ebebisi mpe mitema mya bakonzi banene. | |
Sira | LinVB | 8:5 | Opalela moto te soko ayoki mawa mpo ya masumu ma ye ; kanisa ’te biso banso tozali basumuki. | |
Sira | LinVB | 8:8 | Okinola maloba ma bato ba bwanya te, mpe manyola biyele bya bango : okozwa mayele epai ya bango, mpe okoyeba kosalela bato banene. | |
Sira | LinVB | 8:9 | Otia matoi na masolo ma bakolo, zambi bango moko bayoki mango epai ya batata ba bango ; epai ya bango okoyekola makambo mingi, okoyeba kopesa eyano bo ebongi. | |
Sira | LinVB | 8:13 | Omitia ndanga te na biloko bileki mingi, soko ondimi ndanga, yeba ’te mokolo moko okofuta. | |
Sira | LinVB | 8:15 | Moto wa mabaku, okende na ye nzela yoko te, mpo ’te akotisa yo o makambo ma kwokoso te ; akosala se lokola motema mwa ye molingi, yo mpe okobeba mpo ya bozoba bwa ye. | |
Sira | LinVB | 8:16 | Oswana na moto wa nkanda te, okatisa eliki nzela yoko na ye te ; zambi kosopa makila ekobangisaka ye te, mbele akoboma yo ntango okozanga mosalisi. | |
Sira | LinVB | 8:18 | Maye makoki koyebana na bato basusu te, osala mango o miso ma mompaya, mpo oyebi te soko akosala yo nini. | |
Chapter 9
Sira | LinVB | 9:8 | Otala mwasi kitoko na miso te, otala bonzenga bwa mwasi wa bato te. Bonzenga bwa mwasi bosili bokweisi bato mingi, zambi bolingi bokopelaka noki lokola móto. | |
Sira | LinVB | 9:9 | Okende kofanda penepene na mwasi wa libala te, mpe o limpati omele vino esika yoko na ye te, mbele okobanda kolula ye, koselumwa mpe kokweya mpo ya motema móto mwa yo. | |
Sira | LinVB | 9:10 | Otika moninga wa kala te, mpo moninga wa sika akokani na ye te. Moninga wa sika azali lokola vino ya sika, okomele vino na esengo bobele soko eumeli. | |
Sira | LinVB | 9:11 | Oyokela mosumuki zuwa te soko alongi o makambo ma ye, mpo oyebi te ndenge nini akosuka. | |
Sira | LinVB | 9:12 | Osepela te soko bato baboya Nzambe bazwi bolamu, kanisa ’te bakozwa etumbu liboso lya kowa. | |
Sira | LinVB | 9:13 | Tikala mosika na moto oyo akoki koboma yo, bongo okozala na ntina yoko ya kobanga liwa te. Soko okomi epai ya ye, okenge ye malamu, zambi akoki koboma yo : yeba ’te ozali kotambola o kati ya mitambo, lokola moto atamboli o efelo ya mboka. | |
Sira | LinVB | 9:17 | Bakokumisaka ekeko mpo ya ntoki ya mosali, mokonzi wa ekolo akozwa lokumu mpo ya maloba ma ye. | |
Chapter 10
Sira | LinVB | 10:1 | Moyangeli wa bwanya akolakisa bato ba ye mayele, bokonzi bwa moto wa mayele bopikami makasi. | |
Sira | LinVB | 10:2 | Lokola moyangeli wa ekolo azali, basaleli ba ye bakozala bobele bongo. Lokola mokonzi wa mboka azali, bana mboka bakozala se bongo. | |
Sira | LinVB | 10:3 | Soko mokonzi wa ekolo azangi mayele, akobebisa ekolo ya ye nye. Soko bankumu ba engumba bazali bato ba mayele, makambo manso ma engumba makotambola malamu. | |
Sira | LinVB | 10:4 | Boyangeli bonso o nse mobimba bozali o maboko ma Nzambe, akobimisaka mokonzi o ntango ekoki. | |
Sira | LinVB | 10:7 | Ná Nzambe ná moto bakoyinaka lolendo, bango babale bakoyinaka makambo mazangi bosembo. | |
Sira | LinVB | 10:8 | Soko bokonzi bwa bikolo bokoumelaka o ekolo yoko te, ezali mpo ya bokosi, bonyokoli mpe lokoso la mosolo. | |
Sira | LinVB | 10:9 | Moto azali se mabelé na mputulu, bongo mpo nini amitombola ? Ata azali na bomoi, bipolu bitondi o minsopo mya ye. | |
Sira | LinVB | 10:10 | Monganga akoki koseke, ata bokono boumeli : oyo azali mokonzi monene lelo, akowa lobi. | |
Sira | LinVB | 10:13 | Lisumu lizali ebandela ya lolendo, bato balingi masumu bakobimisa makambo ma nsomo. Yango wana Mokonzi apesi bango bitumbu binene, mpe asilisi bango nye. | |
Sira | LinVB | 10:15 | Mokonzi abikoli bikolo lokola bakobikolaka nzete, aloni ekolo ya bato bake o esika ya bango. | |
Sira | LinVB | 10:17 | Alongoli bato ba byango o mokili, abomi bango, alimwisi nkombo ya bango, bakanisa yango lisusu te. | |
Sira | LinVB | 10:19 | Banani bakoki na lokumu ? Bato ! Ntina nini ? Mpo bakobangaka Nzambe. Banani bakoki na bokinoli ? Bato. Ntina nini ? Mpo bakobukaka mibeko. | |
Sira | LinVB | 10:20 | Mokambi akozwaka lokumu o kati ya bato ba ye, baye bakobangaka Mokonzi Nzambe, bakozwa lokumu epai ya ye. ( | |
Sira | LinVB | 10:22 | Ezala moto wa nkita, oyo ayebani mingi, to mobola : lokumu la bango, bobele bobangi Mokonzi. | |
Sira | LinVB | 10:23 | Kokinola mobola oyo azali na mayele ezangi bosembo, kokumisa mosumuki ebongi soki te. | |
Sira | LinVB | 10:24 | Bato banene, bazuzi na bankumu babongi na lokumu ; kasi baye bakobangaka Mokonzi baleki lokumu. | |
Sira | LinVB | 10:25 | Moombo wa mayele akozala na bansomi bakosalela ye, moto nyonso wa mayele akomono yango malamu. | |
Sira | LinVB | 10:27 | Moto wa mosala oyo azali na biloko bikoki na ye, aleki moto wa lolendo oyo azangi biloko bya kolia. | |
Sira | LinVB | 10:28 | Mwana wa ngai, osepela na bolamu bwa yo, kasi zala se na bosawa, omiyeba lokola ozali. | |
Sira | LinVB | 10:29 | Nani akolongisa moto oyo amisali mabe ? Nani akokumisa moto oyo akomimonoko moto moke ? | |
Chapter 11
Sira | LinVB | 11:3 | O kati ya nyama inso ya mapapu nzoi ezali eke, kasi mafuta ma nzoi maleki sukali na elengi. | |
Sira | LinVB | 11:4 | Ofunda te na bilamba olati, omitombola te mpo bato bakumisi yo, zambi misala mya Mokonzi mizali mya kokamwa, kasi mibombami o miso ma bato. | |
Sira | LinVB | 11:5 | Basili kokweisa banyokoli baike, basusu, baye bayebanaki te, balatisi bango enkoti ya bokonzi. | |
Sira | LinVB | 11:6 | Basili basambwisi bankumu baike, mpe bato bayebanaki mingi bakweyaki o maboko ma bauta. | |
Sira | LinVB | 11:9 | Oyoka motema móto te mpo ya likambo litali yo te, omikotisa o boswani bwa bato babe te. malamu | |
Sira | LinVB | 11:10 | Mwana wa ngai, oluka kosala misala ebele te, soko misala mileki mingi okozwa likambo noki. Ata okopota mbangu, okokoma na nsuka te, mpe okokoka kokima likambo te. | |
Sira | LinVB | 11:11 | Basusu, ata bamiyokisi mpasi, balembisi nzoto mpe bapoti mbangu, bakotikala bobele nsima. | |
Sira | LinVB | 11:12 | Batau basusu basengeli na mosalisi, bazangi biloko mpe bakeleli ; kasi Mokonzi akotala bango na miso ma ngolu, akolongola bango o mpasi ya bango. | |
Sira | LinVB | 11:14 | Bobele Mokonzi akopesaka malamu na mabe, ye mokonzi wa liwa mpe wa bomoi ; bobola na bomengo bozali o maboko ma ye. ( | |
Sira | LinVB | 11:19 | mokolo bakokanisa : « Sikawa nakoki kopema mpe kolia biloko bya ngai » ; nzokande bayebi te mikolo boni bakozala naino na bomoi, mpo basengeli kokufa mpe kotikela bato basusu biloko bya bango. | |
Sira | LinVB | 11:21 | Okamwa na misala mya moto mabe te, tia elikya na Mokonzi mpe koba mosala mwa yo ; Mokonzi akoyoka mpasi te mpo akomisa mobola moto wa nkita. | |
Sira | LinVB | 11:22 | Moto malamu akosepela kozwa bobenisi bwa Mokonzi, na mbala yoko makambo ma ye manso makobongo. | |
Sira | LinVB | 11:26 | O mokolo mwa liwa lya moto, Mokonzi akoki, soko alingi, kozongisela ye maye asalaki. | |
Sira | LinVB | 11:27 | Koyoka mwa mpasi ekosala ’te moto abosana bomengo bwa ye, liwa lya moto likomonisa misala mya ye polele. | |
Sira | LinVB | 11:28 | Soko moto awei naino te, otanga ye moto wa esengo te, okoyeba moto malamu mokolo mwa liwa lya ye. | |
Sira | LinVB | 11:30 | Motema mwa moto wa lolendo mozali lokola monongi aluki kokweisa yo, mpe lokola esosolo bakangi mpo ebelela baninga. | |
Sira | LinVB | 11:31 | Akozongisa mabe mpo ya malamu, akotia mitambo mya ye, mpe akobebisa ata maye maleki malamu. | |
Sira | LinVB | 11:32 | Mwa mololi mokoki kopelisa makala, se bongo na mitambo mosumuki akoluka kosopa makila. | |
Sira | LinVB | 11:33 | Keba na moto mabe, zambi akani kosala mabe : mbele akobebisa lokumu la yo na mbala yoko. | |
Chapter 12
Sira | LinVB | 12:1 | Soko olingi kosala moto malamu, yeba na nani okosala yango, mpe okozwa lifuta mpo ya malamu osalaki. | |
Sira | LinVB | 12:2 | Sala malamu na moto malamu, mpe okozwa lifuta ; soko ye apesi yo te, Nzambe wa likolo akopesa yo. | |
Sira | LinVB | 12:3 | Moto alingi kotika mabe ma ye te, akozwa bolamu te, se bongo oyo aboyi kokabela moninga eloko. | |
Sira | LinVB | 12:5 | Salisa bato bake mpe opesa moto mabe eloko te, pima ye mampa, opesa ye mango te mpo ’te aleka yo na bokasi te. Mpamba te, mpo ya malamu maye osali ye, akozongisela yo mabe mbala ibale. | |
Sira | LinVB | 12:8 | O ntango ozali na bomengo okoki koyeba moninga wa solo te, kasi o ntango ya mpasi monguna akoki kobombama te. | |
Sira | LinVB | 12:9 | Soko moto azwi bolamu, banguna ba ye bakoyoka motema mpasi, soko azali na mpasi, ata moninga wa ye akokima ye. | |
Sira | LinVB | 12:10 | Otia motema na monguna te, mpamba te, bobe bwa ye bokobebisaka lokola mbengi ekogugaka. | |
Sira | LinVB | 12:11 | Ata amikitisi mpe afukameli yo, omikengele mpe okeba na ye. Azali lokola talatala ya mbengi : ata basukoli yango, bosoto bokozonga. | |
Sira | LinVB | 12:12 | Ofandisa ye penepene na yo te, mbele akokweisa yo mpo akamata esika ya yo. Ofandisa ye o loboko la yo la mobali te, mbele akolula kiti ya yo. O ntango ena okondima ’te nakebisi yo na ntina, mpe okokundola yango na mawa o motema. | |
Sira | LinVB | 12:13 | Moto alingi konyelisa nyoka to kobeleme na nyama ya zamba, nani akoyokela ye mawa, soko nyama iswi ye ? | |
Sira | LinVB | 12:16 | Monguna azali monoko sukali, kasi na motema akoluka kokweisa yo o libulu. Akokomaka na mai o miso noki, kasi soko azwi nzela, akotonda te na bomeli makila. | |
Sira | LinVB | 12:17 | Soko likambo likweli yo, okomono ye noki, akokosa ’te ayei kosalisa yo, nzokande akoluka kokweisa yo. | |
Chapter 13
Sira | LinVB | 13:1 | Moto akosimba mbiko akomibebisa nzoto, oyo akolanda moto wa lofundo, akokoma lokola ye. | |
Sira | LinVB | 13:2 | Okumba mokumba te, moye moleki bozito ; otambola te na moto oyo aleki yo na makasi to na nkita. Bakotiaka nde mbeki ya mabelé na mbeki ya ebende esika yoko ? Soko itutani, mbeki ya mabelé ekobolana. | |
Sira | LinVB | 13:3 | Soko moto wa nkita abebisi bosembo, akobete ntolo ; soko bayokisi mobola mpasi, akoki se komilela. | |
Sira | LinVB | 13:4 | Soko okoki kozwela moto wa nkita litomba, akosilisa biloko bya yo ; kasi mokolo okwei, akokima yo. | |
Sira | LinVB | 13:6 | Soko asengeli na yo, akokosa yo, akolobisa yo malamu mpo ’te apesa yo elikya, mpe na maloba ma boleti akotuna yo : « Násalisa yo na nini ? » | |
Sira | LinVB | 13:7 | Akobyanga yo o limpati mpe akoyokisa yo nsoni, akosilisa mbongo ya yo mbala ibale, ata mbala isato, mpe na nsima akotiola yo. Mokolo bokokutana lisusu, akosala lokola ayebi yo te, mpe akoningisa motó mpo ya koseke yo. | |
Sira | LinVB | 13:11 | Osololisa ye te lokola moto akokani na ye, mpe otia motema na maloba ma ye ebele te. Mpamba te, akomeka yo na maloba mingi, akosekisa yo mpo ayeba motema mwa yo. | |
Sira | LinVB | 13:12 | Maye okoyebisa ye moko, akopanza mango, mbele akonyokolo yo mpe akokotisa yo o boloko. | |
Sira | LinVB | 13:16 | Bikelamo binso bikosanganaka engebene na ndenge ya byango, moto mpe akolukaka moninga wa ye moto. | |
Sira | LinVB | 13:18 | Ekange na mbwa ikoki nde kofanda na boboto ? Bondeko bokoki nde kozala kati ya mobola na moto wa nkita ? | |
Sira | LinVB | 13:19 | Mpunda ya zamba ikoliamaka na ntambwe o eliki, se bongo bato ba nkita bakoliaka babola. | |
Sira | LinVB | 13:20 | Bosawa bokoyokisaka moto wa lolendo nsomo, se bongo mobola akoyokisaka moto wa nkita nsomo. | |
Sira | LinVB | 13:21 | Soko moto wa nkita akwei, baninga bakosalisa ye, soko moto wa mawa akwei, baninga bakokima ye. | |
Sira | LinVB | 13:22 | Soko moto wa nkita atuti libaku, bato mingi bakoya kosalisa ye ; ata alobi maloba ma bozoba, bakondimela ye. Kasi soko moto moke atuti libaku, bakopalela ye ; soko alobi malamu, bakotala maloba ma ye mpamba. | |
Sira | LinVB | 13:23 | Ekoloba moto wa nkita, banso bakokanga monoko, mpe bakokumisa maloba ma ye. Ekoloba mobola, bakotuna : « Oyo nde nani ? » Soko atuti libaku, bakopusa ye mpo ’te akweya. | |
Chapter 14
Sira | LinVB | 14:1 | Esengo na moto oyo asalaki mabe na monoko te, oyo motema moswi te, mpo asalaki mabe te. | |
Sira | LinVB | 14:4 | Soko moto akomipimaka biloko mpo azwa mbongo mingi, basusu bakolia mbongo ya ye mpe bakosepela na yango. | |
Sira | LinVB | 14:5 | Moto akomiyokelaka mawa te, akoyokela nani mawa ? Akosepela ata na biloko bya ye moko te. | |
Sira | LinVB | 14:7 | Soko mokolo moko asali malamu, loba ’te abungi, nsuka nsuka akolakisa mabe ma motema mwa ye. | |
Sira | LinVB | 14:15 | Okotikela bato basusu nkita ya yo te ? Bakobete zeke te mpo ya kokabola mbuma ya mosala mwa yo ? | |
Sira | LinVB | 14:18 | Lokola nzete na nkasa ebele : nkasa isusu ikokweyaka, isusu ikobimaka, se bongo na bato tozali nsuni na makila, basusu bakowaka, basusu bakobotamaka. | |
Sira | LinVB | 14:22 | akolanda bwanya lokola moto wa bokila akolandaka, mpe akokengeke matambi ma nyama. | |
Sira | LinVB | 14:23 | Akonongo bwanya ut’o maninisa ma ndako, mpe akotia matoi o ezibeli ya ndako ya bwanya. | |
Sira | LinVB | 14:24 | Akoteleme penepene na ndako ya bwango, mpe akopika piké ya ema o lopango la bwango, | |
Sira | LinVB | 14:26 | Akopesa bana ba ye bwanya, mpo ’te bazwa mobateli, mpe akokende kopema o nse ya bitapi bya nzete ya bwanya | |
Chapter 15
Sira | LinVB | 15:1 | Oyo akosalaka bongo, akobangaka Mokonzi mpe akotosaka Mobeko, ye moto akozwa bwanya. | |
Sira | LinVB | 15:4 | Moto akotia motema na bwanya, akokweya te, oyo akokangana na bwanya, akoyoka nsoni te. | |
Sira | LinVB | 15:5 | Bwanya bokotombola ye likolo lya baninga, mpe bokopesa ye maloba o lisanga lya bakolo ba mboka. | |
Sira | LinVB | 15:9 | Maloba ma bokumisi mabongi o monoko mwa mosumuki te, zambi Mokonzi akoyebisa ye maloba mana te. | |
Sira | LinVB | 15:11 | Oloba te : « Mokonzi alingaki ’te nasala lisumu », mpo eloko ayoki mpi akolingaka yango te. | |
Sira | LinVB | 15:12 | Oloba te : « Nzambe moto abungisi ngai nzela », mpo Mokonzi asengeli na mosumuki te. | |
Sira | LinVB | 15:13 | Mokonzi akoyinaka mambi manso ma nsomo, se bongo baye bakobangaka Nzambe bakoki kolinga mango te. | |
Sira | LinVB | 15:17 | Bomoi mpe liwa bizali penepene na biso, moto nyonso akoki kopono eye ye moko alingi. | |
Chapter 16
Sira | LinVB | 16:1 | Olinga te kozala na bana mingi ba nkanza, osepela na bana ba yo te soko baboyi Nzambe. | |
Sira | LinVB | 16:3 | Otia motema te ’te bakoumela mikolo miike, to mpo bazali ebele ; mwana moko oyo atosi Nzambe aleki bana basusu nkoto ; soko ozali na bana babe, kobota te eleki malamu. | |
Sira | LinVB | 16:4 | Mpo ya moto moko wa mayele engumba ekokoma enene, kasi soko etondi na basumuki ekokufa noki. | |
Sira | LinVB | 16:5 | Namoni makambo mana na miso mbala mingi, na matoi nayoki masusu maleki mango na bobe. | |
Sira | LinVB | 16:7 | Nzambe alimbisaki bilombe ba kala te, ntango batombokoki na ye mpe bafundaki na nguya ya bango. | |
Sira | LinVB | 16:9 | Ekolo ya bato eye batombelaki bobe, ayokelaki yango mawa te, babomamaki mpo ya masumu ma bango. | |
Sira | LinVB | 16:10 | Asali se bongo na basoda nkoto nkama motoba, baye basalaki motó makasi mpe batombokoki na ye. | |
Sira | LinVB | 16:11 | Ata moto moko mpamba asali motó makasi, mbele akokaki kokima etumbu te. Ya solo, Nzambe ayebi koyoka ngolu, ayebi mpe kosilika, azali nta ngolu, kasi na nkanda lokola. | |
Sira | LinVB | 16:12 | Ngolu ya ye eleki bonene, se lokola bosembo bwa ye : akosambisaka bato engebene na misala mya bango. | |
Sira | LinVB | 16:13 | Mosumuki akobika na biloko bya boyibi te, kasi moto ayebi kokanga motema, Nzambe akobwaka ye te. | |
Sira | LinVB | 16:14 | Nzambe akofuta moto nyonso akosalaka malamu, mpe akozongisela bato engebene na misala mya bango. ( | |
Sira | LinVB | 16:17 | Oloba te : « Nakomibomba mpo Mokonzi amono ngai te ! Kuna o likolo nani akokanisa ngai ? O kati ya bato ebele bakoyeba ngai te ; ngai nde nini o kati ya bikelamo ebele boye ? » | |
Sira | LinVB | 16:18 | Tala : likolo, mpe nta likolo, mai bozindo na mabelé makasi, binso bikolenge soko Nzambe atali byango. | |
Sira | LinVB | 16:22 | « Nani akosakola bikela bya bosembo bya Nzambe ? Nani akotia motema na byango ? Nzambe akataki bondeko kala te ? » | |
Sira | LinVB | 16:23 | Moto azangi mayele akolobaka bongo, azali zoba, abungi, akokanisaka se mambi ma bozoba. | |
Sira | LinVB | 16:27 | Abongisi bikela bya ye seko. Ut’o ebandela kin’o mokolo bikosuka bikoyoka nzala te mpe bikolembe te, bikotika misala mya byango te. | |
Chapter 17
Sira | LinVB | 17:2 | Akateli moto nyonso elaka mpe mikolo mya kofanda awa o mokili, atii bango bankolo ba biloko binso bya nse. | |
Sira | LinVB | 17:4 | Alingaka ’te bikelamo binso bibanga bango, mpo ’te bazala bankolo ba nyama ya zamba mpe ba ndeke. ( | |
Sira | LinVB | 17:7 | Atondisi bango na bwanya mpe na mayele, alakisi bango nini ezali malamu mpe nini ezali mabe. | |
Sira | LinVB | 17:10 | Yango wana bakopesa nkombo ya ye esantu lokumu, mpe bakosakola bipai binso bonene bwa bikela bya ye. | |
Sira | LinVB | 17:14 | Alobi na bango : « Bokeba na makambo mazangi bosembo », alakisi bango moko moko ndenge nini bazala na baninga. | |
Sira | LinVB | 17:19 | Akomonoko makambo ma bango manso polele lokola mwese, akotalaka bango na miso mpo amono ezalela ya bango ; | |
Sira | LinVB | 17:22 | Soko moto akabeli moninga eloko, akobosana yango te, akobomba yango lokola moto akobatelaka liso lya ye. | |
Sira | LinVB | 17:23 | Mokolo moko akoteleme mpe akopesa mbano ya bango, akopesa moto na moto maye makoki na ye. | |
Sira | LinVB | 17:26 | Zonga epai ya Nzambe wa Nta-Likolo, oboya makambo mazangi bosembo, mpe oyina mambi ma nsomo. | |
Sira | LinVB | 17:27 | Nani o mboka ya bawa akokumisa Nzambe wa Nta-Likolo, soko bato bazali na bomoi bakokembisa ye te ? | |
Sira | LinVB | 17:28 | Bato basili bawei bakoki kokumisa Nzambe lisusu te, bobele bato bazali na bomoi mpe nzoto kolongonu bakokumisaka ye. | |
Sira | LinVB | 17:31 | Eloko nini eleki mwese na bongengi ? Nzokande moi mokolimwaka mikolo minso ; kasi moto asalemi na nsuni mpe na makila, azali na makanisi ma kosala mabe. | |
Chapter 18
Sira | LinVB | 18:5 | Nani akoki komeka nguya ya ye nsuka te ? Nani akoki kosakola bikela binso bya ngolu ya ye ? | |
Sira | LinVB | 18:7 | Ntango moto akanisi ’te akomi na nsuka, abandi se bobandi, mpe ntango atiki, mayele masileli ye. | |
Sira | LinVB | 18:10 | Litanga lyoko lya mai, mbuma yoko ya zelo, mibu mya ye mizali se bongo soko otali yango elongo na bomoi bwa lobiko. | |
Sira | LinVB | 18:11 | Yango wana Mokonzi akolakisaka bato motema molai, mpe akoyokelaka bango ngolu ndelo te. | |
Sira | LinVB | 18:13 | Moto akoyokelaka se moninga wa ye mawa, kasi Mokonzi akoyokelaka bikelamo binso mawa. Akopalelaka, akotumbolaka, akoteyaka, mpe lokola mokengeli wa mpata akokengeleke etonga ya ye. | |
Sira | LinVB | 18:14 | Akoyokelaka bato bakondimaka mateya ma ye mawa, na mpe baye bakotosaka mibeko mya ye noki. | |
Sira | LinVB | 18:15 | Mwana wa ngai, soko okabeli moto eloko opalela ye te ; na likabo, obakisa maloba te maye makoyokisa moninga mawa. | |
Sira | LinVB | 18:17 | Liloba lya boboto lileki likabo linene lya bolami, kasi moto wa likabo akosangisaka makabo maye mabale. | |
Sira | LinVB | 18:18 | Likabo lya moto zoba, se mafinga makozokisa mitema ; eloko ekabami na esengo te, ekolelisaka miso. | |
Sira | LinVB | 18:20 | Omituna malamu liboso ’te Nzambe asambisa yo, bongo mokolo akokata likambo lya yo, akolimbisa yo. | |
Sira | LinVB | 18:21 | Omikitisa mpo ’te obele bokono te, soko osalaki masumu, lakisa ’te obongoli motema. | |
Sira | LinVB | 18:22 | Eloko yoko te epekisa yo kokokisa elako o ntango ekoki, ozila mokolo mwa liwa te mpo ya kokokisa elako ya yo. | |
Sira | LinVB | 18:23 | Okanisa malamu liboso ’te olakela elako, osala te lokola moto alingi komeka Mokonzi. | |
Sira | LinVB | 18:24 | Kanisa nkanda ya mikolo mya nsuka, kanisa etumbu ya mokolo Mokonzi akoboya kotala yo. | |
Sira | LinVB | 18:25 | O ntango ozali na biloko mingi, obosana mikolo mya nzala te, o ntango okomi na mbongo, kanisa mikolo ozalaki kokelela. | |
Sira | LinVB | 18:26 | Ngonga ekotambolaka banda ntongo kina mpokwa, o miso ma Mokonzi manso makolekaka noki. | |
Sira | LinVB | 18:27 | Moto wa bwanya azali na bokebi o makambo manso, o ntango masumu makongala, akomikengele makasi. | |
Sira | LinVB | 18:29 | Bato bakolobaka malamu bazali solo bato ba bwanya, mpe bayebi biyele ebele lokola mai ma mbula. | |
Sira | LinVB | 18:32 | Oluka bolamu bwa yo o bisengo bya nse te, omiyingisa te o lisanga lya baye bakolukaka byango. | |
Chapter 19
Sira | LinVB | 19:1 | Mosali oyo akomeleke mingi, akokoma moto wa nkita te, oyo akobatelaka biloko bike te, moke moke akokelela. | |
Sira | LinVB | 19:2 | Masanga na basi ikobungisaka mayele ma bato ba bwanya ; moto akolandaka bandumba akobanga nsoni lisusu te. | |
Sira | LinVB | 19:4 | Oyo akotiaka motema na bato noki, akokanisaka malamu te, oyo akosalaka yango, akomiyokisa mpasi. | |
Sira | LinVB | 19:8 | Obimisa likambo lyoko lya moninga te, lya monguna mpe te ; oloba lyango bobele soko bakokitisa yo mpo obombi lyango. | |
Sira | LinVB | 19:9 | Mpamba te, moto ayoki lyango o monoko mwa yo, akolongola motema epai ya yo, mbele akoyina yo noki. | |
Sira | LinVB | 19:11 | Zoba akoyoka motema mpasi mpo ya maloba ma bato, lokola mwasi akoyokaka mpasi o ntango ya kobota. | |
Sira | LinVB | 19:12 | Liloba moto zoba abombi o libumu lya ye, lizali lokola likula lizokisi moto o ebelo. | |
Sira | LinVB | 19:13 | Kende kotuna moninga, mbele asali eloko te, mpe soko asali yango, akosala yango lisusu te. | |
Sira | LinVB | 19:14 | Tuna moninga, mbele alobi eloko te, mpe soko alobaki yango, akosala yango lisusu te. | |
Sira | LinVB | 19:15 | Tuna moninga, zambi bato bakotongoko mingi, ondima makambo manso te, maye bato bakolobaka. | |
Sira | LinVB | 19:16 | Mbala esusu mpe moto akwei, kasi na nko te, kutu nani asali naino mabe na maloba te ? | |
Sira | LinVB | 19:22 | Mayele o makambo mabe ezali bwanya te ; koyoka malako ma basumuki ezali mayele mpe te. | |
Sira | LinVB | 19:23 | Mayele masusu ma bato mazali mayele mabe, moto azangi bwanya azali moto zoba mpenza. | |
Sira | LinVB | 19:24 | Moto azali na mayele mingi te, kasi akobangaka Mokonzi, aleki oyo azali na mayele mingi, kasi okobukaka mibeko. | |
Sira | LinVB | 19:25 | Basusu bazali na mayele ma kosala makambo mazangi bosembo, basusu bakosalaka mayele mabe mpo balonga o likambo. | |
Sira | LinVB | 19:26 | Mosusu akokosaka ’te azali na mawa manene, nzokande abombi makambo o kati ya motema. | |
Chapter 20
Sira | LinVB | 20:4 | Oyo atindi bato na makasi o nzela ya bosembo, azali lokola eniki alingi koyebana na elenge mwasi. | |
Sira | LinVB | 20:5 | Bakotalaka oyo akolobaka mingi te lokola moto wa mayele, oyo akolobaka mingi, bakolingaka ye te. | |
Sira | LinVB | 20:6 | Mosusu akokanga monoko, mpo azali na likambo lya koloba te ; mosusu akokanga monoko tee ntango ya koloba ebongi. | |
Sira | LinVB | 20:7 | Moto wa bwanya akoloba soko ntango ya koloba ekoki, kasi bato ba bilobaloba na bazoba bakolekisa ntango babongi koloba. | |
Sira | LinVB | 20:9 | Mpasi esusu ekoki koyela moto makambo malamu, mbala esusu likambo lilamu likoyela moto mpasi na nsima. | |
Sira | LinVB | 20:10 | Mbala esusu likabo likozwela yo litomba te, mbala esusu likozwela yo litomba linene mbala ibale. | |
Sira | LinVB | 20:11 | Likambo lya lokumu likoki koyokisa moto nsoni nsima, to nsima ya koyoka nsoni moto akoki kotombola motó lisusu. | |
Sira | LinVB | 20:12 | Mosusu akosomba biloko mingi na mwa mosolo moke, kasi mbala mingi bakofutaka motuya moleki monene. | |
Sira | LinVB | 20:13 | Moto wa bwanya ayebi kondimisa bato na mwa maloba, moto azangi bwanya akoloba maloba ma boboto se mpamba. | |
Sira | LinVB | 20:14 | Eloko zoba apesi yo ekozwela yo litomba lyoko te, mpo akotia motema ’te okozongisela ye biloko bileki mingi. | |
Sira | LinVB | 20:15 | Akokabaka moke kasi akolobaka mingi mpe makasi lokola moteki biloko. Eloko adefisi yo lelo, lobi akosenge yango lisusu ; moto asali bongo, bakolinga ye soki te. | |
Sira | LinVB | 20:16 | Kasi zoba oyo akoloba : « Moto moko alingi ngai te, soko nakabeli moto eloko, akotondo ngai te. Baye bakoliaka biloko bya ngai bazali bato ba lokuta. » | |
Sira | LinVB | 20:18 | Malamu otuta libaku na lokolo, kasi otuta libaku na monoko te. Bato babe bakokweyaka bongo na mbalakaka. | |
Sira | LinVB | 20:19 | Moto azangi bonkonde azali lokola lisolo lizangi ntina, liye bazoba bakosololaka ata o ntango nini. | |
Sira | LinVB | 20:20 | Bakondimaka eyele euti na monoko mwa moto zoba te, mpo akobimisaka yango o ntango ebongi te. | |
Sira | LinVB | 20:21 | Mbala esusu bobola bokosalisaka bato mpo basala lisumu te, bongo o ntango ya bopemi bakoyoka motema mawa te. | |
Sira | LinVB | 20:22 | Mosusu akobebisa bomoi bwa ye, mpo akobangaka miso ma bato, akobanga kopalela ata moto azangi mayele. | |
Sira | LinVB | 20:24 | Lokuta lokopesaka moto mbindo ya nsoni mingi, lokoyokanaka mbala mingi o minoko mya bazoba. | |
Sira | LinVB | 20:26 | Momeseno mwa kokosa mokosambwisaka moto, nsoni yango ekolongwa na mokosi mokolo moko te. | |
Sira | LinVB | 20:27 | Mwa maloba makozwelaka moto wa bwanya lokumu, bankumu bakosepelaka na moto wa mayele. | |
Sira | LinVB | 20:28 | Oyo akokataka bilanga, akozanga kozwa mbuma te, oyo alingami na bato banene, bakolimbisa ye mabe asali. | |
Sira | LinVB | 20:29 | Mabonza na makabo makokangisa bato ba mayele miso, mpe makozipa bango monoko mpo bapalela te. | |
Sira | LinVB | 20:30 | Olakisi bwanya bwa yo te, to obombi eloko ya nkita : yango ibale izali na litomba nini ? | |
Chapter 21
Sira | LinVB | 21:1 | Mwana wa ngai, osali lisumu ? Osala lisusu te, mpe senge ’te balimbisa yo masumu ma kala. | |
Sira | LinVB | 21:2 | Kima lisumu lokola bakokimaka nyoka, zambi soko obelemi na lisumu, likoswa yo. Mino ma lisumu lokola mino ma ntambwe, makobomaka bato. | |
Sira | LinVB | 21:3 | Lisumu lizali lokola mompanga mokokataka bipai bibale, soko mozokisi moto, mpota ekokangema te. | |
Sira | LinVB | 21:4 | Komilakisaka na lofundo ekosilisaka mbongo ya moto, yango wana libota lya moto wa lolendo likosila nye. | |
Sira | LinVB | 21:6 | Oyo alingi bapalela ye te, akolanda nzela ya basumuki ; oyo akobangaka Mokonzi, akobongola motema. | |
Sira | LinVB | 21:7 | Moto wa bilobaloba ayebani noki, kasi bobele moto wa mayele akoyeba soko atuti libaku na monoko. | |
Sira | LinVB | 21:8 | Soko otongi ndako na mbongo ya moto mosusu, obandi kosangisa mabanga ma lilita lya yo. | |
Sira | LinVB | 21:9 | Lisanga lya basumuki lizali lokola esika bakobwakaka matiti, mokolo moko likozika na móto. | |
Sira | LinVB | 21:11 | Moto akotosaka mibeko ayebi ntina ya myango, moto wa bwanya akotosaka Nzambe o makambo manso. | |
Sira | LinVB | 21:12 | Okoki kolakisa mosala te na moto oyo azali na ntoki te, kasi ntoki ya moto mosusu ekobotela ye makambo ma bololo. | |
Sira | LinVB | 21:13 | Mayele ma moto wa bwanya mazali lokola mai ma mpela, malako ma ye mazali lokola liziba lya bomoi. | |
Sira | LinVB | 21:15 | Soko moto wa mayele ayoki liloba lya bwanya, akondima lyango mpe akobakisa mwa liloba lya ye. Soko moto wa nkanza ayoki lyango, akosepela te, akobwaka lyango nsima ya mokongo mwa ye. | |
Sira | LinVB | 21:16 | Lisolo lya zoba lizali lokola mokumba mwa moto wa mobembo, kasi maloba ma moto wa bwanya makoyokisaka elengi. | |
Sira | LinVB | 21:18 | Bwanya bwa zoba bozali lokola ndako ekufi nye, mpe maye moto azangi mayele ayebi mazangi ntina. | |
Sira | LinVB | 21:19 | Zoba aboyi botosi lokola minyololo mikangi ye na makolo, mpe lokola mokulu mokangi ye na loboko la mobali. | |
Sira | LinVB | 21:21 | Moto wa mayele alingi mateya lokola likembisi lya wolo, to lokola ekomo o loboko la ye. | |
Sira | LinVB | 21:23 | Zoba soko akomi o monoko mwa ndako, asili atambwisi miso, kasi moto wa bonkonde akozila o libanda. | |
Sira | LinVB | 21:24 | Moto azangi bonkonde akoyokaka lisolo o monoko mwa ndako ; moto wa mayele akoyokaka likambo lyango nsoni mingi. | |
Sira | LinVB | 21:25 | Moto wa bilobaloba akozongelaka maloba ma bato basusu ; moto wa mayele akokanisa malamu ndenge nini akoloba. | |
Sira | LinVB | 21:26 | Na maloba ma ye moto zoba akolakisaka motema mwa ye ; moto wa mayele akokanisa liboso ’te aloba. | |
Chapter 22
Sira | LinVB | 22:2 | Moto goigoi azali lokola libondo lya bipolu, moto asimbi yango, akolongola yango o loboko. | |
Sira | LinVB | 22:3 | Mwana mobali azangi botosi akoyokisa tata wa ye nsoni, mwana wa ye wa mwasi, soko azangi botosi, akosambwisa ye. | |
Sira | LinVB | 22:4 | Mwana mwasi wa mayele akozwa mobali abongi na ye ; mwasi wa mobulu akoyokisa tata wa ye mawa o motema. | |
Sira | LinVB | 22:5 | Mwasi asila nsoni akoyokisa tata mpe mobali wa ye nsoni, bango banso babale bakokinola ye. | |
Sira | LinVB | 22:6 | Maloba malobami o ntango ebongi te mazali lokola nzembo ya esengo o ntango ya lilaka. Kosenge bana botosi mpe kobete fimbo, tala nzela ya bwanya ya kobokolo bango. ( | |
Sira | LinVB | 22:9 | Koteya moto zoba ezali lokola kobamba mbeki ebolani, ezali lokola kolamusa moto alali mpongi makasi. | |
Sira | LinVB | 22:10 | Koloba na zoba ezali lokola kosolola na moto alali mpongi, esilisi yo koloba, akotuna yo : « Olobi nini ? » | |
Sira | LinVB | 22:11 | Bakolelaka mowei mpo atiki mwinda, bakolelaka moto zoba mpo abungisi mayele. Olela mowei mingi mpenza te, mpo azwi bopemi, kasi bomoi bwa zoba boleki liwa na bobe. | |
Sira | LinVB | 22:12 | Mpo ya mowei bakosalaka lilaka mikolo nsambo, mpo ya elema to mosumuki, mawa makoumela bomoi mobimba. | |
Sira | LinVB | 22:13 | Obenda lisolo na moto zoba te, mpe otambola nzela yoko te na moto azangi mayele. Keba na ye mpo ’te ozwa matata te, mpe bosoto bwa ye bobebisa yo te. Kima ye soko olingi kofanda kimia, soki te, okolembe makambo ma ye ma bozoba. | |
Sira | LinVB | 22:15 | Komeme zelo, mongwa to liboke lya bibende ezali mpasi, kasi kokanga motema mpo ya elema eleki mpasi. | |
Sira | LinVB | 22:16 | Motondo mwa ndako, soko motongami makasi, mokolongwa te o ntango mokili mokoningana ; se bongo motema mokanisi makambo manso liboso, mokobanga te o ntango ya likama. | |
Sira | LinVB | 22:17 | Motema mwa moto wa mayele mokozwa mpiko, lokola ekeko ekozwa makasi soko ebakemi o efelo. | |
Sira | LinVB | 22:18 | Mabanga make matiami o efelo ya lopango makotikala wana te soko mompepe moyei makasi, se bongo moto oyo alandi makanisi ma bozoba akoyeba kokanga motema te soko likama liyei. | |
Sira | LinVB | 22:19 | Moto atuti liso, akotangisa lyango mai, oyo azokisi motema mwa moto, akobengana bondeko. | |
Sira | LinVB | 22:20 | Oyo abwakeli ndeke mabanga akimisi yango, oyo ayokisi moninga nsoni abebisi bondeko na ye. | |
Sira | LinVB | 22:21 | Soko obimisaki mompanga mpo ya kozokisa moninga, obwaka elikya te, akoki kozongela yo. | |
Sira | LinVB | 22:22 | Soko olobaki na moninga makasi, obanga te, okoki koyokana na ye lisusu. Kasi soko ofingi ye, okinoli ye, obimisi makambo ma ye ma bonkutu to osali ye mayele mabe, moninga wa yo akokima yo. | |
Sira | LinVB | 22:23 | Meka kozwa motema mwa moninga o ntango azali mobola, o ntango akokoma na nkita yo mpe okozwa ndambo ya biloko bya ye. O ntango moninga azali na mpasi okima ye te, bongo o mokolo akosangola biloko, yo mpe okozwa. | |
Sira | LinVB | 22:24 | Bakomonoko milinga liboso lya móto, se bongo bato bazalaki kofingana liboso ’te basopa makila. | |
Sira | LinVB | 22:25 | Nakoyoka nsoni te mpo ya kobatela moninga, mpe soko asengeli na ngai, nakokima ye te. | |
Chapter 23
Sira | LinVB | 23:1 | Mokonzi, yo Tata mpe Nkolo wa bomoi bwa ngai, otika ngai nakoma moombo wa mbebu ya ngai te, ondima te ’te nakweya mpo ya maloba ma ngai. | |
Sira | LinVB | 23:2 | Nani akobete makanisi ma ngai fimbo ? Nani akolakisa motema mwa ngai botosi na lingenda lya bwanya, mpo ’te mabe nasali maleka mpamba te, mpe nazwa etumbu mpo ya masumu nasali ? | |
Sira | LinVB | 23:3 | Bongo mabungi bwa ngai maleka mingi te, mpe nakoba kosala masumu te, mpo ’te nakweya o miso ma banyokoli te, mpe monguna moko aseke ngai te. | |
Sira | LinVB | 23:4 | E Mokonzi, yo Tata mpe Nzambe wa bomoi bwa ngai, osala ’te nazala na miso ma lolendo te, | |
Sira | LinVB | 23:6 | nandima mposa ya bosoni mpe makambo ma mobulu te, nakoma moombo wa mposa ebe ya nzoto te. | |
Sira | LinVB | 23:7 | Bana, boyekola ndenge bakokonzaka maloba ; moto akosala bongo akokweya na mbalakaka te. | |
Sira | LinVB | 23:8 | Mosumuki akomiyokisa mpasi na maloba ma ye, motongi na moto wa lolendo bakomikweisa na mango. | |
Sira | LinVB | 23:10 | Lokola mosali, oyo nkolo wa ye akokengeleke makasi, akozanga bilembo bya fimbo o nzoto ya ye te, moto akolayaka mpe akotangaka nkombo ya Nzambe ntango inso, akozanga masumu te. | |
Sira | LinVB | 23:11 | Moto akolayaka ndai mbala na mbala, atondi na masumu, etumbu ekolongwa o ndako ya ye te. Soko asali lisumu, likozongela ye ; soko akokisi ndai ya ye te, akomeme ngambo ; soko alayi ndai ya lokuta, bakolimbisa ye te, mpasi mingi mikokwela libota lya ye. | |
Sira | LinVB | 23:12 | Mpo ya ndenge bato basusu bakolobaka, babongi kokufa, maloba mana malobama o libota lya Yakob te ; mpamba te, bato balamu balingi mango soki te, bakosepelaka na bosoto bwa masumu te. | |
Sira | LinVB | 23:14 | Okanisaka tata na mama wa yo o ntango okofanda o kati ya bato banene, mpo ’te omibosana o miso ma bango te mpe okoma kosala makambo ma bozoba te. Soko osali bongo te, okokanisa : « Malamu soko nabotamaki te », mpe okobanda koyina mokolo babotaki yo. | |
Sira | LinVB | 23:16 | Bato ba ndenge ibale bakosalaka masumu mingi, basusu naino bakoyokisaka Nzambe nkanda : | |
Sira | LinVB | 23:17 | mposa ya bosoni ezali lokola nzoto epeli móto, moye mokozima te soko mposa esili te. Oyo apesi nzoto ya ye na makambo ma bosoni, akotika te, soko asilisi mposa te. Moto wa bosoni akoyoka bilei binso elengi, akotika te, akolembe bobele mokolo akowa. | |
Sira | LinVB | 23:18 | Moto akosi bolongani wa ye amilobeli : « Nani akomono ngai ? Molili makasi mozingi ngai mpe bifelo bizali kobomba ngai, moto moko akomono ngai te. Bongo nabanga nini ? Nzambe wa nta likolo akokanisa masumu ma ngai te. » | |
Sira | LinVB | 23:19 | Moto oyo akobangaka se miso ma bato, ayebi te ’te miso ma Mokonzi maleki mwese na bongengi mbala nkoto. Mokonzi akotalaka bikela binso bya bato, akomonoko manso kin’o bisika bya molili makasi. | |
Sira | LinVB | 23:20 | Mokonzi asili ayebi bikelamo binso, liboso ’te bikelami, mpe akoyeba byango naino ata bisili bilimwi. | |
Sira | LinVB | 23:23 | Lya yambo : abuki mobeko monene mwa Nzambe ; lya mabale : asali mobali wa ye mabe ; lya masato : abebisi nzoto ya ye na bokali mpe aboti na mobali mosusu. | |
Sira | LinVB | 23:25 | Bana ba ye bakozala lokola nzete ezangi ntina, bitapi bya nzete yango bikobota mbuma te. | |
Sira | LinVB | 23:26 | Bakotanga nkombo ya ye mpo ya kotombela moto bobe, nsoni ya ye ekosila mokolo moko te. | |
Chapter 24
Sira | LinVB | 24:2 | Bokoloba o lisanga lya bato ba Nzambe, bokomikumisa o miso ma Nzambe wa bokasi bonso boye : | |
Sira | LinVB | 24:5 | Natambolaki bipai binso o likolo, ngai moko, mpe nakitaki kin’o bozindo bwa lobwaku. | |
Sira | LinVB | 24:8 | Mozalisi wa likolo na nse atindi ngai, oyo akeli ngai alakisi ngai esika ya kofanda. Alobi : « Kende kozala o ekolo ya Yakob, mpe ofanda seko o Israel ». | |
Sira | LinVB | 24:14 | Nakoli lokola libila o Engadi, lokola fulele ya roza o Yeriko, nazali kitoko lokola nzete ya oliva o esobe, mpe nazwi makasi lokola nzete ya platane. | |
Sira | LinVB | 24:15 | Nsolo ya ngai ezali mpimbo lokola ya kanela mpe ya aspalata, napalinginyi nsolo mpimbo lokola matiti ma mira, lokola nsolo ya galbano, ya onikisi, mpe ya ladano, lokola milinga mya mpaka ya malasi o Ema. | |
Sira | LinVB | 24:16 | Lokola nzete ya gbukulu nabimisi bitapi, bitapi bya bonzenga mpenza mpe bya lokumu. | |
Sira | LinVB | 24:17 | Nabimisi bitapi bya sika lokola nzete ya vino, mpe fulele ipesi mbuma ya bomengo mpe ya nkita. ( | |
Sira | LinVB | 24:20 | Kokanisa ngai eleki mafuta ma nzoi na elengi, moto azwi ngai akoyoka motema esengo mingi. | |
Sira | LinVB | 24:21 | Bato bakolia ngai, bakoyoka nzala ya ngai lisusu, baye bakomele ngai, bakoyoka mposa ya ngai lisusu. | |
Sira | LinVB | 24:22 | Oyo atosi ngai, akoyoka nsoni te, baye bakosala misala mya ngai, bakosala masumu te. » | |
Sira | LinVB | 24:23 | Mana manso makomami o buku ya Bondeko bwa Nzambe wa likolo, Mibeko miye Moze apesaki biso mpo ’te ezala buku ya lisango lya bana ba Yakob. ( | |
Sira | LinVB | 24:25 | Buku yango etondi na bwanya lokola ebale Pison etondi na mai, lokola ebale Tigris etondaka o eleko ya mbuma ya sika. | |
Sira | LinVB | 24:26 | Ekopesaka mayele mingi lokola mai ma ebale Efrate, lokola mai o Yordane o ntango ya kobuka mbuma. | |
Sira | LinVB | 24:27 | Ekopesaka mateya mingi lokola Nil ekotiyolisa mai ebele, lokola Gikon ekotiyolisa mai o eleko ya kokamola mbuma. | |
Sira | LinVB | 24:28 | Moto wa yambo ameki koyeba buku ya mibeko, kasi akoki te, moto wa nsuka akokoka mpe te. | |
Sira | LinVB | 24:29 | Makanisi ma buku yango maleki mbu na bonene, mikano mya yango mileki lobwaku na bozindo. | |
Sira | LinVB | 24:30 | Ngai nazali lokola mai ma ebale babendi o bilanga, lokola nzela ya mai bakotisi o bilanga bya ndunda. | |
Sira | LinVB | 24:31 | Nalobi : « Nakosopela ndunda ya ngai mai, nakomelisa bilanga bya ngai bizinda na mai. » Mpe tala, nzela ya ngai ya mai ekomi ebale, na nsima ebale ya ngai ekomi mbu. | |
Sira | LinVB | 24:32 | Nakolakisa mateya polele lokola moi mwa nta ntongo, nakongengisa mwinda mwa bwanya momonono mosika. | |
Sira | LinVB | 24:33 | Nakoteya bato bayoka bwanya bwa ngai lokola maloba ma baprofeta, mpo ’te bato bakoya nsima bayeba mango. | |
Chapter 25
Sira | LinVB | 25:1 | Makambo masato makosepelisaka ngai, maye maleki bolamu o miso ma Mokonzi mpe o miso ma bato : boyokani o kati ya bandeko, bolingani o kati ya bayebani, na mpe mobali na mwasi bakoyokanaka malamu. | |
Sira | LinVB | 25:2 | Nayini bato baye basato, mpo bakoyokisaka ngai nkanda na ezalela ya bango : mobola atondi na lofundo, moto wa nkita azangi bosembo, na mobange akosalaka bokali mpe azangi mayele. | |
Sira | LinVB | 25:3 | Soko osangisaki biloko te o ntango ozalaki elenge, ndenge nini akozala na eloko ntango okokoma mobange ? | |
Sira | LinVB | 25:4 | Esengo ya komono moto wa nsuki mpembe ayebi kokata makambo, mpe bakolo ba mboka bayebi kopesa malako malamu, | |
Sira | LinVB | 25:6 | Enkoti o motó mwa mobange, nde mayele ma bomoto, litundu lya bango, nde bobangi Mokonzi. | |
Sira | LinVB | 25:7 | Nakomonoko makambo libwa makambo ma esengo, mpe nakoki kotangela bino likambo lya zomi : tata oyo akoki kosepela mpo ya bana ba ye, na oyo azali naino na bomoi ntango banguna ba ye basuki. | |
Sira | LinVB | 25:8 | Esengo na moto azali na mwasi wa mayele, mpe azali na ye motema moko o mosala, oyo azwi likambo mpo ya maloba mokolo moko te, mpe oyo asengeli kosalela mokonzi te, oyo abongi na ye te. | |
Sira | LinVB | 25:10 | Moto akomi na bwanya azali moto monene solo, kasi oyo akobangaka Mokonzi aleki banso. | |
Sira | LinVB | 25:11 | Bobangi Mokonzi boleki makambo manso na bolamu : Nani akokani nde na oyo akobanga Mokonzi ? ( | |
Sira | LinVB | 25:13 | O kati ya mpota inso, mpota ya motema eleki mpasi, o kati ya mayele mabe manso, maye ma mwasi maleki mpasi. | |
Sira | LinVB | 25:14 | Mpasi eleki makasi nde mpasi monguna ayokisi yo ; o kati ya bitumbu bakateli to, eye monguna akateli yo eleki mabe ! | |
Sira | LinVB | 25:16 | Kofanda na ntambwe to na ebuki ya nyama ezali mabe, kasi kofanda na mwasi wa mayele mabe eleki mabe. | |
Sira | LinVB | 25:17 | Mayele mabe makobongolaka miso ma mwasi, makokangisaka ye elongi lokola mokomboso. | |
Sira | LinVB | 25:19 | Mayele mabe ma mwasi maleki mayele mabe manso ; mwasi wa mayele mabe azwa etumbu ekoki na basumuki ! | |
Sira | LinVB | 25:20 | Soko moto wa boboto abali mwasi apusi monoko, akoyoka mpasi lokola mpasi ya mobange akei nzela ya zelo zelo. | |
Sira | LinVB | 25:22 | Mobali oyo akobikaka na mbongo ya mwasi, akomilukela makambo ma nkanda, mindondo na nsoni mingi. | |
Sira | LinVB | 25:23 | Mwasi wa mayele mabe akolembisa mobali motema, akoyokisa ye mawa mpe akozokisa ye motema. Na maboko mayebi mosala te mpe na makolo mazangi makasi, mwasi akoki koyokisa mobali wa ye esengo te. | |
Chapter 26
Sira | LinVB | 26:2 | Mwasi wa mpiko akosepelisa mobali wa ye, na ye mobali akozala na boboto bomoi bwa ye mobimba. | |
Sira | LinVB | 26:4 | Azala mobola to wa nkita, mobali akoyoka motema esengo, ntango inso akolakisaka elongi polele. | |
Sira | LinVB | 26:5 | Makambo masato makobangisaka ngai, mpe likambo lya manei likoyokisaka ngai nsomo : songisongi ya bato, likambo likotondisa lopango na bato, mpe kofunda moto na lokuta, mana manso makambo maleki liwa na mabe. | |
Sira | LinVB | 26:6 | Mwasi oyo akoyokelaka mwasi mosusu zuwa, mpe oyo akobimisaka makambo ebele na lolemu, bakoyokisaka mpasi mpe mawa mingi. | |
Sira | LinVB | 26:7 | Mwasi wa mayele mabe azali lokola ekangiseli etiami malamu o nkingo ya ngombe te : soko omeki kopekisa ye ozali lokola oyo alingi kokanga nkotó na maboko. | |
Sira | LinVB | 26:9 | Okoyeba ezalela ebe ya mwasi na miso ma ye ma lofundo, mpe na ndenge akofinaka liso. | |
Sira | LinVB | 26:11 | Okebaka epai wapi akobwaka miso, nsoni te, mpe okamwa te soko abendi yo o nzela ya mabe. | |
Sira | LinVB | 26:12 | Lokola moto wa mobembo ayoki mposa ya mai, mwasi mabe akofungola monoko, akomele mai manso akuti, akowela kosala ekobo, mpe akomipesa na makambo ma bosoni. | |
Sira | LinVB | 26:13 | Kitoko ya mwasi wa bolongani ekosepelisa mobali wa ye, ntoki ya ye ekolendisa ye mingi. | |
Sira | LinVB | 26:14 | Mwasi akolobaka mingi te azali likabo lya Mokonzi ; oyo abokwami malamu aleki motuya. | |
Sira | LinVB | 26:16 | Lokola mwese mokobimaka o ngomba ya Mokonzi, se bongo bonzenga bwa mwasi oyo akobongisaka ndako malamu. | |
Sira | LinVB | 26:17 | Mwasi na elongi kitoko mpe nzoto enzenga azali lokola mwinda mozali kongenge o etemiseli ya mwinda. | |
Sira | LinVB | 26:18 | Makolo kitoko mpe matindi mpiko ma mwasi, mazali lokola makonzi ma wolo o eteni ya nse ya palata. ( | |
Sira | LinVB | 26:28 | Makambo mabale makoyokisaka ngai motema mawa, mpe likambo lya masato likoyokisaka ngai nkanda : mobuni azali konuna na bobola, ndenge bakokinolaka bato ba bwanya, moto atiki nzela semba mpe abandi kosala mabe. Mokonzi akolengelele bango liwa na mompanga. | |
Chapter 27
Sira | LinVB | 27:1 | Bato ebele basali masumu mpo ya lokoso la mbongo, baye balingi kokoma na nkita bakozalaka na mawa te. | |
Sira | LinVB | 27:2 | Lokola nsete ekokoto o kati ya biliki ibale ikangani, se bongo mabe maye makokoto ntango mosombi na moteki bakutani. | |
Sira | LinVB | 27:4 | Soko opepi biloko na lungu, ndambo ya bosoto ekotikala, se bongo mabe ma moto makomonono na maloba ma ye. | |
Sira | LinVB | 27:6 | Mbuma ya nzete ikolakisa ndenge yango ekolaki, se bongo bakoyeba motema mwa moto na maloba ma ye. | |
Sira | LinVB | 27:9 | Ndeke ya lolenge loko ikotongaka zumbu esika yoko, se bongo bosolo bokozongela bato ba bosolo. | |
Sira | LinVB | 27:10 | Ntambwe ekonongoko nyama mpo ya koboma yango, se bongo lisumu likokengeke bato bazangi bosembo. | |
Sira | LinVB | 27:11 | Maloba ma moto wa Nzambe mazali maloba ma bwanya, kasi motema mwa zoba mokobongwanaka lokola sanza. | |
Sira | LinVB | 27:12 | Okomi o kati ya bazoba, oumela wana mingi te, soko ozali epai ya bato ba bwanya, obanga te koumela wana. | |
Sira | LinVB | 27:14 | Soko oyoki masolo ma bato bakolayaka ndai mbala na mbala, okolenge ; boswani bwa bato bokolembisa yo tee okozipa matoi. | |
Sira | LinVB | 27:15 | Esika bato ba lolendo baswani, makila makosopama ; koyoka bifinga bya bango, mpasi mpenza. | |
Sira | LinVB | 27:16 | Bakotiaka motema lisusu te na moto akobimisaka makambo ma bonkutu, akozwa lisusu moninga wa solosolo te. | |
Sira | LinVB | 27:17 | Linga moninga oyo alingi yo mpe okangana na ye, kasi soko obimisi makambo ma ye ma bonkutu, otika kolanda ye : | |
Sira | LinVB | 27:19 | Soko ofungoli loboko, ndeke ekokima, se bongo moninga atiki yo, okozwa ye lisusu te. | |
Sira | LinVB | 27:20 | Olanda ye lisusu te, mpo asili akomi mosika, akimi yo lokola mboloko eye ebiki o motambo ekokimaka. | |
Sira | LinVB | 27:21 | Okoki kokanga mpota, to kolimbisa moto afingi yo, kasi moto abimisi makambo ma bonkutu ma moninga abwaki elikya seko. | |
Sira | LinVB | 27:23 | O miso ma yo akoloba se maloba ma sukali, mpe akokumisa maloba ma yo manso, kasi nsima ya mokongo akoloba bongo lisusu te, mpe na maloba ma yo moko akoyokisa yo nsoni. | |
Sira | LinVB | 27:25 | Moto abwaki libanga o likolo, amibwakeli lyango o motó ; oyo azokisi moninga na mayele mabe, bakozokisa ye mpe. | |
Sira | LinVB | 27:26 | Moto atimoli libulu mpo akweisa moninga, ye moko akokweya o kati ; oyo atii motambo, ye moko akokangema na mwango. | |
Sira | LinVB | 27:28 | Mosala mwa moto wa lolendo, kotiola mpe kofinga bato ; kasi etumbu ekonongo ye lokola ntambwe ekonongoko nyama. | |
Sira | LinVB | 27:29 | Bato bakosepelaka mpasi ya moto wa Nzambe, bakomitielaka motambo, mpasi ekonyokolo bango liboso ’te bawa. | |
Chapter 28
Sira | LinVB | 28:1 | Moto abekoli baninga, Mokonzi akobekola ye lokola, akobosana masumu ma ye mokolo moko te. | |
Sira | LinVB | 28:4 | Awa ayokeli moninga wa ye mawa te, ndenge nini akoki kosambela mpo alimbisa ye masumu ? | |
Sira | LinVB | 28:6 | Kanisa mikolo mya nsuka mpe tika koyina baninga, kanisa bopoli bwa nzoto na liwa, mpe tosa mibeko. | |
Sira | LinVB | 28:7 | Kanisa mibeko mpe tika kobombela moninga nkanda, kanisa bondeko Nzambe akati na yo, mpe limbisa mabe ma bato. | |
Sira | LinVB | 28:8 | Okoto o makambo ma boswani te, bongo okosala lisumu noki te ; moto wa nkanda akopelisa móto noki. | |
Sira | LinVB | 28:9 | Mosumuki akotiaka boswani o kati ya baninga, mpe akokotisaka bonguna o kati ya bato bayokani. | |
Sira | LinVB | 28:10 | Soko moto akobi kotia nkoni o móto, móto mokosila te, soko moto akobi koloba na nkanda, boswani bokosila te. Moto oyo azali makasi mingi akosilikaka noki, soko azali moto wa nkita, akongalisa nkanda ya ye. | |
Sira | LinVB | 28:11 | Boswani bwa mbalakaka bokopelisaka móto, koswana ntina te ekosukaka na bosopi makila. | |
Sira | LinVB | 28:12 | Pemela móto moke, mpe móto mona mokopela makasi, bwakela mwango nsoi, móto mokozima : bokasi bwa monoko bokosalaka bongo. | |
Sira | LinVB | 28:13 | Mabe makwela motongi mpe mokosi, basili kobebisa bato ebele bazalaki kofanda na boboto. | |
Sira | LinVB | 28:14 | Bato ebele babebi mpo ya songisongi ya bato, basili batiaki bonguna kati ya bikolo, babomaki bingumba bizalaki makasi, mpe babukaki ndako ya bato banene. | |
Sira | LinVB | 28:15 | Songisongi esili kolongola basi balamu o libala mpe kobotolo bango matomba ma misala mya bango. | |
Sira | LinVB | 28:16 | Moto akotiaka matoi na songisongi ya bato akopema lisusu te, akozala lisusu kimia mokolo moko te. | |
Sira | LinVB | 28:18 | Bato baike basili kokufa na mompanga, kasi baye bakufi mpo ya songisongi baleki mingi. | |
Sira | LinVB | 28:19 | Esengo na moto oyo azoki na bilobaloba bya bato te, to aziki na móto mwa nkanda ya byango te, oyo asengeli komeme mokumba mwa bilobela bya bato te, mpe akangemi na minyololo mya maloba ma bango te. | |
Sira | LinVB | 28:20 | Mpamba te, mokumba mwa songisongi mozali mwa bibende, minyololo mya yango mitulami na mbengi. | |
Sira | LinVB | 28:21 | Songisongi ekoyela bato liwa lya nsomo, eleki malamu moto akende o mboka ya bawa libela. | |
Sira | LinVB | 28:22 | Bato balamu bakobeba mpo ya songisongi te, bakozika te na miloli mya móto mwa yango. | |
Sira | LinVB | 28:23 | Kasi ekokweisa bato batiki Mokonzi, móto mwa songisongi mokopela seko o mitema mya bango ; móto mokolia bango lokola ntambwe ekoliaka bato, móto mokosilisa bango lokola nkoi ekokatakataka bato. | |
Sira | LinVB | 28:24 | Yango wana, ozinga lopango la yo na nzete ya nzube, obomba palata na wolo ya yo malamu. | |
Sira | LinVB | 28:25 | Meka liboso bozito bwa maloba ma yo o emekeli, batela mpe monoko mwa yo mpe kanga mwango na lifungola. | |
Chapter 29
Sira | LinVB | 29:1 | Moto adefisi moninga eloko, azali na motema ngolu ; oyo asalisi moninga, atosi mibeko. | |
Sira | LinVB | 29:2 | Defisa moninga eloko soko akomi kokelela, mpe zongisa eloko odefi o eleko boyokanaki. | |
Sira | LinVB | 29:3 | Sala lokola olobaki na ye, okosa ye te, bongo o ntango okokelela, okozala na maye masengeli na yo. | |
Sira | LinVB | 29:4 | Bato mingi bakotalaka eloko badefi lokola eloko bazwi, bongo bakoyokisaka moto adefisi yango mpasi. | |
Sira | LinVB | 29:5 | Liboso ’te badefa mbongo, bakumisi nkolo, bamikitisi na botangi nkita ya ye. Ekomi ntango ya kozongisa, bakozilisa ye, bakolela mpasi ya kofuta mpo makambo malekeli bango. | |
Sira | LinVB | 29:6 | Ata bakoki kofuta, modefisi akozwa se ndambo ya mosolo, mpe asengeli kosepela na ndambo eye azwi. Mbala esusu akozwa ata eloko te, akozwa mpe monguna wa sika, ntina te ; zambi modefi akozongisa se maloba mabe na mafinga, akotondo modefisi te, kasi akobetele ye mobondo. | |
Sira | LinVB | 29:7 | Bato mingi baboyi kodefisa, mpo ya motema mabe te, kasi babangi ’te biloko bya bango bikobunga ntina te. | |
Sira | LinVB | 29:9 | Salisa mobola zambi mobeko motindi bongo, soko akeleli, ozongisa ye maboko mpamba te. | |
Sira | LinVB | 29:10 | Obanga te kobebisa mbongo mpo ya ndeko to moninga wa yo, bongo ebeba o nse ya libanga te esika obombi yango. | |
Sira | LinVB | 29:11 | Sala mosala na nkita ya yo, lokola Nzambe atindi, bongo okozwa litomba lileki wolo na motuya. | |
Sira | LinVB | 29:13 | Makabo maleki nguba na makasi, maleki likongo lya bozito, makobunela yo o ntango ya etumba na monguna. | |
Sira | LinVB | 29:14 | Moto malamu akomitia ndanga mpo ya kobikisa moninga, kasi moto azali na nsoni te, akotika moninga wa ye. | |
Sira | LinVB | 29:15 | Obosana te ndenge moto amitii ndanga mpo ya yo asalisi yo, mpo andimaki komikaba mpo ya yo. | |
Sira | LinVB | 29:16 | Mosumuki akobebisa biloko bya moto adefisi ye, moto wa motema mabe akobosana moninga oyo abikisi ye. | |
Sira | LinVB | 29:17 | Mbala nzike bato balamu basili kokweya mpo ya ndanga, mpe bakomi lokola bwato o kati ya mbonge ya mbu. | |
Sira | LinVB | 29:18 | Ndanga esili kotinda bato banene bakima o ekolo mosika, mpe bakei koyengayenga o mokili mwa bauta. | |
Sira | LinVB | 29:19 | Soko mosumuki andimi komitia ndanga mpo ya moninga, azali koluka litomba, nzokande akozwa likambo noki. | |
Sira | LinVB | 29:22 | Ozali mobola, kasi ofandi o ndako eke, likambo te, ozali kolia malamu, kasi ofandi o ndako ya moninga, mpasi ! | |
Sira | LinVB | 29:23 | Ozala na biloko mingi to mingi te, sepela na byango, bongo bakofinga yo mouta mokolo moko te. | |
Sira | LinVB | 29:24 | Kolongwa mpe koluka ndako mbala na mbala, mpasi ; esika ozali mouta okoki kofungola monoko te. | |
Sira | LinVB | 29:25 | Soko obengi bato balia mpe bamele, bakotondo yo te, kasi bakobimisela yo maloba mabe : | |
Sira | LinVB | 29:27 | To : « Mouta, longwa, tikela moto oyo aleki yo na lokumu esika ! Ndeko wa ngai ayei, akolala o ndako ya ngai. » | |
Chapter 30
Sira | LinVB | 30:2 | Oyo abokoli mwana malamu, akosepela na ye mingi, o kati ya bayebani akomikumisa na mwana wa ye. | |
Sira | LinVB | 30:3 | Oyo ateyi mwana wa ye, akoyokisa monguna zuwa, mpe o kati ya baninga akoyoka esengo. | |
Sira | LinVB | 30:4 | Soko tata awei, liwa lya ye lizali lokola liwa te, zambi atiki mwana oyo aulani na ye. | |
Sira | LinVB | 30:5 | Bomoi bwa ye mobimba azalaki kosepela mpo ya ye, bongo o ntango ya liwa akoyoka mpe mawa te. | |
Sira | LinVB | 30:6 | Atiki moto moko akoki kobekola mabe ma banguna ba ye mpe kozongisela baninga ba ye malamu basali ye. | |
Sira | LinVB | 30:7 | Tata apusi kondimela mwana, akosengela kokanga mpota ya ye, mwa boleli bwa mwana bokoyokisa ye motema mpasi. | |
Sira | LinVB | 30:8 | Farasa babokoli na makasi te ekotosa moto moko te, se bongo mwana babokoli malamu te akozala motó makasi. | |
Sira | LinVB | 30:9 | Soko obondeli mwana wa yo, akoyela yo makambo ma kokamwa, soko osakani na ye, akoyokisa yo motema mpasi. | |
Sira | LinVB | 30:12 | Lakisa ye kokitisa motó ntango ya bolenge ; ezali ye naino mwana, bete ye fimbo o mokongo, soki te, akotomboko, akoboya kotosa yo, mpe akoyokisa yo motema mpasi. | |
Sira | LinVB | 30:13 | Bokolo mwana wa yo mpe bongisa ye, mpo ’te ayokisa yo mpasi te na ezalela ya nsoni. | |
Sira | LinVB | 30:14 | Kozala mobola kasi nzoto kolongonu eleki malamu, kozala na nkita, kasi nzoto ekasi te, mabe. | |
Sira | LinVB | 30:15 | Nzoto kolongonu eleki wolo inso ya nse na motuya, bokolongonu bwa nzoto boleki nkita enene na bolamu. | |
Sira | LinVB | 30:16 | Biloko ebele bikokani na bokolongonu bwa nzoto te, bomengo ata nini bokokani na esengo ya motema te. | |
Sira | LinVB | 30:18 | Biloko elengi bitiami o boso bwa monoko mozipami bizali lokola mabonza ma bilei matiami o lilita. | |
Sira | LinVB | 30:19 | Mabonza ma bilei, ekeko ekokende na mango wapi ? Eyebi kolia mpe kolumbuta mango te. Se bongo na moto oyo Nzambe anyokoli. | |
Sira | LinVB | 30:20 | Amoni bilei na miso mpe akimeli, lokola eniki azingi elenge mwasi ekopi mpe akimeli. | |
Sira | LinVB | 30:23 | Omisepelisa mpe bondo motema mwa yo, longola makanisi ma mawa mosika na yo : zambi mawa masili masukisi bato baike, mpe mawa o motema ezali na litomba lyoko te. | |
Sira | LinVB | 30:24 | Zuwa na nkanda ikokutolaka bomoi bwa bato : komitungisa mingi ekokomisaka moto mobange noki. | |
Chapter 31
Sira | LinVB | 31:1 | Nkita ekolalisaka moto mpongi malamu te, ekokondisaka ye, ekobotaka mabanzo ebele mpe ekokimisaka mpongi. | |
Sira | LinVB | 31:2 | Maye matungisi biso na moi makopekisaka kopema, mpe makokimisaka mpongi na butu leka malali makasi. | |
Sira | LinVB | 31:3 | Moto wa mbongo akosalaka makasi mpo azwa mbongo ebele, mpe soko atiki mosala, akokende kolanda bisengo bya mokili. | |
Sira | LinVB | 31:4 | Mobola akosalaka mosala mpo abika mwa moke, mpe soko atiki mosala, akolela nzala lisusu noki. | |
Sira | LinVB | 31:5 | Moto akolingaka mosolo, akozanga lisumu te, oyo alingi se kozwa mbakisa ya mbongo, akobunga. | |
Sira | LinVB | 31:7 | Bato bakomipesaka na yango, bakotuta na yango libaku, bazoba banso bakokangema na yango. | |
Sira | LinVB | 31:9 | Ye nde nani ? Ebongi topesa ye longonya, zambi akosalaka mambi manene o kati ya bato ba ye. | |
Sira | LinVB | 31:10 | Nani abongi nye awa bamekaki ye na likambo lya mbongo ? Yango wana bakokumisa moto ona. Nani akokaki kosala lisumu mpe asali lyango te ? Nani akokaki kosala mabe, mpe asali mabe te ? | |
Sira | LinVB | 31:11 | Yango wana akozwa bolamu mikolo ebele, mpe o lisanga bakokumisa ye mpo ya malamu asalaki. | |
Sira | LinVB | 31:12 | Mokolo ofandi o meza etondi na biloko, ofungola monoko te mpo ya kokumisa meza, mpe oloba te : « Biloko bizali mingi. » | |
Sira | LinVB | 31:13 | Yeba ’te kotala biloko na lokoso ezali mabe. Liso lileki mabe o kati ya bikelamo binso, na ntina ena liso likobimisaka mai mbala mingi. | |
Sira | LinVB | 31:14 | Eloko nkolo wa ndako atali, omeka kokamata yango te, bino na ye bowelana biloko o sani te. | |
Sira | LinVB | 31:15 | Soko olingi koyeba mayoki ma moninga, tala motema mwa yo moko, mpe o makambo manso zala na bokebi bonene. | |
Sira | LinVB | 31:16 | Lia biloko bapesi yo lokola moto wa bonkonde akoliaka, onyamuta biloko na lokoso te, mpo bayoka yo mpi te. | |
Sira | LinVB | 31:17 | Silisa kolia noki lokola moto wa bonkonde akosalaka, oluka kolia mingi te, mpo bamono yo mabe te. | |
Sira | LinVB | 31:18 | Soko bato babyangemi bazali mingi, ozala moto wa liboso te mpo ya kokamata biloko. | |
Sira | LinVB | 31:19 | Mwa biloko bikoki na moto abokwami malamu, ntango akokende kolala, akopema malamu. | |
Sira | LinVB | 31:20 | Moto akoliaka na lokoso te, akolala mpongi malamu, akolamuka na ntongo mpe akoyoka nzoto makasi ; kasi moto wa lokoso akolala mpongi malamu te, akoyoka mposa ya kosanza, libumu likoswa. | |
Sira | LinVB | 31:22 | Mwana wa ngai, yoka malamu mpe okinola ngai te, okoyeba ntina ya maloba ma ngai nsima. Zala na mayele o makambo manso okosalaka, bongo okobele bokono mokolo moko te. | |
Sira | LinVB | 31:23 | Bakokumisaka nkolo wa ndako oyo azali moimi te, zambi alakisi ’te ayebi koyamba bato malamu. | |
Sira | LinVB | 31:24 | O mboka mobimba bakotongoko moto akoyambaka bato malamu te, boimi bwa ye boyebani na bato banso. | |
Sira | LinVB | 31:26 | Lokola móto mokomekaka makasi ma ebende, vino ekolakisaka mitema mya bato ba lolendo. | |
Sira | LinVB | 31:27 | Vino ekosepelisa bomoi bwa moto, soko azali komele yango na mayele. O bomoi bakoki nde kozanga vino ? Vino esalemaki mpo ya kosepelisa bato. | |
Sira | LinVB | 31:28 | Vino ekosepelisaka motema, ekoyokisaka bato esengo, soko bameli na ndelo mpe na ndenge ebongi. | |
Sira | LinVB | 31:29 | Kasi vino ekobebisa motema mwa moto alekisi ndelo, akoswanisa bato noki mpe akoluka bitumba. | |
Sira | LinVB | 31:30 | Soko moto zoba alangwi, akosilika mingi, vino ekosilisela ye makasi mpe ekokotisa ye o makambo. | |
Chapter 32
Sira | LinVB | 32:1 | Soko baponi yo mokonzi wa limpati, olakisa lolendo te, zala o kati ya baninga ba limpati lokola moko wa bango. Soko osilisi kosalisa bango okoki kokende kopema. | |
Sira | LinVB | 32:2 | Esilisi yo misala mya yo minso, kende kofanda mpe sepela elongo na bango, bongo bakopesa yo longonya na mosala mwa yo. | |
Sira | LinVB | 32:3 | Okoki koloba, mobange, yango ebongi na yo ; kasi loba malembe mpo bato bakoka koyoka nzembo. | |
Sira | LinVB | 32:4 | Ntango bato bazali koyoka, oloba mingi mingi te, olakisa bwanya bwa yo te soko ntango ebongi te. | |
Sira | LinVB | 32:5 | Kobete miziki elengi o ntango bazali komele vino ezali kitoko lokola libanga lya diama o lompete la wolo. | |
Sira | LinVB | 32:6 | Nzembo bakoyembaka o ntango bazali komele vino elengi ekosepelisaka lokola libanga lya emerode o ekangeli ya wolo. | |
Sira | LinVB | 32:8 | Loba na bokuse, yebisa makambo mingi na maloba make, sala lokola moto atikali nye, ata ayebi mingi. | |
Sira | LinVB | 32:9 | O kati ya bankumu, oluka komilakisa te, mpe soko babange bazali wana, oloba mingi te. | |
Sira | LinVB | 32:10 | Minkalali mikomonono liboso, nkake ekoyokanaka bobele nsima, bolamu bwa moto wa bosawa boyebani liboso ’te amonono. | |
Sira | LinVB | 32:11 | Soko ngonga ekoki, kende mpe otikala kofanda te, zonga o ndako ya yo, mpe owayawaya o nzela te. | |
Sira | LinVB | 32:12 | Kuna okoki kosepela mpe kosala manso motema mwa yo molingi, kasi osala mabe te na maloba ma lolendo. | |
Sira | LinVB | 32:13 | Yango wana osengeli kotondo Nzambe mpo ya malamu manso, ye mpenza akabelaka yo makabo ma ye. | |
Sira | LinVB | 32:14 | Moto akobangaka Mokonzi akotia matoi na mateya ma ye, bato bakolukaka ye uta ntongo bakozwa makabo ma ye. | |
Sira | LinVB | 32:16 | Baye bakobangaka Mokonzi bakozala bato ba bosembo, misala mya bango mikongenge lokola mwinda. | |
Sira | LinVB | 32:17 | Mosumuki akolingaka te ’te bato bapalela ye, mpe na maloba ma lokuta akomilingisa maye ye alingi. | |
Sira | LinVB | 32:18 | Moto wa mayele akokinola malako te, kasi moto zoba mpe moto wa lolendo bakobanga eloko te. | |
Chapter 33
Sira | LinVB | 33:2 | Moto aboyi mibeko, azali na bwanya te, motioli mibeko azali lokola masuwa o kati ya mbonge. | |
Sira | LinVB | 33:3 | Moto wa bwanya akotia motema na Liloba lya Mokonzi, akotosa mibeko lokola moto akotosaka maloba ma Nzambe. | |
Sira | LinVB | 33:4 | Olingi bato bayoka yo, lengele maloba ma yo malamu, sangisa maye manso oyekoli liboso ’te oloba. | |
Sira | LinVB | 33:5 | Mayoki ma moto zoba mazali lokola yika ya likalo : makanisi ma ye makozolonganaka lokola yika. | |
Sira | LinVB | 33:6 | Motioli baninga azali lokola farasa mobali eye ekoboyaka bato banso balingi kobutela yango. | |
Sira | LinVB | 33:7 | Mpo nini mikolo minso mikoumelaka ndenge yoko te, awa myango minso mikozwaka mwinda se mpo ya mwese ? | |
Sira | LinVB | 33:11 | Kasi na bwanya bwa ye bonene Mokonzi akaboli bango, abongiseli bango nzela ikeseni. | |
Sira | LinVB | 33:12 | Abenisi basusu mpe atomboli bango o likolo, asantisi basusu, abyangi bango penepene na ye. Nzokande atombeli basusu bobe, mpe akitisi bango, abengani bango o esika ya bango. | |
Sira | LinVB | 33:13 | Lokola mosali mbeki akoyema libazi lokola alingi, Mozalisi wa bato akopesa bango lifuta ndenge ye akati. | |
Sira | LinVB | 33:14 | Makambo mabe makokutana na makambo malamu, mpe liwa likozalaka se penepene na bomoi, se bongo mosumuki akozalaka se penepene na moto wa bosembo. | |
Sira | LinVB | 33:15 | Tala naino bikelamo binso Mokonzi wa likolo akeli, okokuta byango ntango inso bibale bibale. | |
Sira | LinVB | 33:16 | Ngai nazalaki moto wa nsuka mpo ya kokengele, nazalaki koluka mbuma ya vino itikalaki nsima ya bobuki. | |
Sira | LinVB | 33:17 | Kasi Mokonzi abenisi ngai, nakomi liboso, natondisi ekamolelo ya ngai lokola babuki mbuma basusu. | |
Sira | LinVB | 33:18 | Boyeba ’te namiyokisi mpasi mpo ya ngai moko te, kasi mpo ya baye banso bakoluka kozwa bwanya. | |
Sira | LinVB | 33:20 | Bomoi bwa yo mobimba olinga te ’te mwana, mwasi, ndeko to moninga wa yo akoma mokonzi wa yo. Otikela moto mosusu biloko bya yo te, mbele okoyoka mawa na nsima, mpe osengeli kosenge byango lisusu. | |
Sira | LinVB | 33:21 | O ntango ozali na bomoi mpe mpema ezali naino, olinga moto moko azala mokonzi wa yo te. | |
Sira | LinVB | 33:22 | Eleki malamu soko bana bayei kosenge yo biloko, kasi ezali mabe soko yo osengeli kobondela bango. | |
Sira | LinVB | 33:24 | Ebelemi mokolo mwa nsuka mwa bomoi bwa yo, mpe ebeti ngonga ya liwa, kabola biloko bya yo. | |
Sira | LinVB | 33:25 | Ebongi mpunda ezwa biloko bya kolia, kasi lingenda lya kobete mpe mikumba izanga te. Se bongo opesa mosali mampa, fimbo mpe mosala makasi. | |
Sira | LinVB | 33:26 | Opesa ye mosala mpo atosa yo, bongo okozala nye, soko opesi ye mosala te, akoluka kokima yo. | |
Sira | LinVB | 33:27 | Fimbo mpe mokumba bozito ikosilisaka motó makasi ; mosali wa lolendo akozwa mayele soko opesi ye bitumbu. | |
Sira | LinVB | 33:28 | Opesa ye mosala mpo akoma goigoi te, zambi ezalela ya goigoi ekobenda makambo mabe mingi. | |
Sira | LinVB | 33:31 | Soko ozali se na moombo moko, tala ye lokola okomitalaka, mpo omiyokisi mpasi mpo ya kozwa ye. | |
Sira | LinVB | 33:32 | Soko ozali se na mosali moko, tala ye lokola ndeko, zambi osengeli na ye lokola nzoto esengeli na makila. | |
Chapter 34
Sira | LinVB | 34:1 | Elikya ya mpamba ekokosaka moto azangi mayele, mpe ndoto ekotambwisaka mayele ma bazoba. | |
Sira | LinVB | 34:2 | Moto akotiaka motema na ndoto, azali lokola oyo alingi kokanga elilingi to kolanda mompepe. | |
Sira | LinVB | 34:4 | Eloko peto ekobimaka o eloko mbindo te, likambo lya solo likoutaka na liye lya lokuta te. | |
Sira | LinVB | 34:5 | Kotuna banganga, kotala minzoto, to koloto ndoto izangi ntina : lokola makanisi ma mpamba ma mwasi alingi abota. | |
Sira | LinVB | 34:9 | Moto akokendeke mobembo, akozwa mayele mingi, mpe moto ayebi makambo mingi, akoloba na bwanya. | |
Sira | LinVB | 34:10 | Moto azwaki makambo mingi te, ayebi mpe mingi te, oyo akendeki mobembo mbala mingi, azwi mayele mingi. | |
Sira | LinVB | 34:13 | bato bakobangaka Mokonzi bakoumela mingi na bomoi, zambi bakotiaka elikya na Oyo akoki kobikisa bango. | |
Sira | LinVB | 34:14 | Oyo akobangaka Mokonzi akobanga eloko te, akoyoka nsomo te, zambi Mokonzi azali elikya ya ye. | |
Sira | LinVB | 34:15 | Esengo na moto oyo akobangaka Mokonzi, zambi akotiaka motema na oyo akoki kosalisa ye ! | |
Sira | LinVB | 34:16 | Nzambe akokengeleke baye balingi ye, azali nguba ekobatelaka bango mpe molendisi wa bango ; ye ebombamelo o ntango ya mompepe makasi, esika ya mpio o ntango ya moi makasi ; akokengeleke bango mpo batuta libaku te, akobatelaka bango mpo bakweya te. | |
Sira | LinVB | 34:17 | Akopesaka bato mpiko mpe akongengisaka bilongi bya bango, akopesaka bango nzoto kolongonu, bomoi mpe bobenisi. | |
Sira | LinVB | 34:18 | Libonza lya biloko biyibami lizali na mbeba ; mabonza ma baye bakotosaka mibeko te makosepelisa Nzambe te. | |
Sira | LinVB | 34:19 | Nzambe akosepelaka libonza lya basumuki te, akolimbisaka masumu mpo ya boike bwa mabonza te. | |
Sira | LinVB | 34:20 | Soko obonzeli Nzambe biloko obotoli babola, ozali lokola moto abomi mwana o miso ma tata wa ye. | |
Sira | LinVB | 34:22 | Soko obotoli moto biloko bisengeli na ye, obomi ye ; soko opimi mosali lifuta, osopi makila ma ye. | |
Sira | LinVB | 34:23 | Soko moko atongi ndako mpe mosusu abuki yango, bakozwa litomba nini ? Bamiyokisi mpasi se mpamba. | |
Sira | LinVB | 34:24 | Soko moko abenisi yo mpe mosusu abeteli yo mobondo, Mokonzi Nzambe akoyoka maloba ma nani ? | |
Sira | LinVB | 34:25 | Moto amipetoli mpo asimbaki ebembe, amisukoli mpamba tee soko na nsima asimbi yango lisusu ? | |
Chapter 35
Sira | LinVB | 35:1 | Moto atosi Mobeko azali lokola oyo abonzi mabonza ebele ; kotosa mitindo ezali lokola kobonza libonza lya bondeko. | |
Sira | LinVB | 35:2 | Moto asaleli baninga azali lokola oyo abonzi libonza lya bilei, moto akabeli moto eloko azali lokola oyo abonzi libonza lya bokumisi Nzambe. | |
Sira | LinVB | 35:3 | Moto aboyi masumu akosepelisa Mokonzi, oyo aboyi makambo mazangi bosembo azali lokola oyo abonzi libonza lya bofuti masumu. | |
Sira | LinVB | 35:4 | Obima o miso ma Mokonzi maboko mpamba te, zambi mobeko mokotindaka mitindo miye minso. | |
Sira | LinVB | 35:5 | Libonza lya moto semba lizali libonza lya mafuta o altare, nsolo mpimbo ya lyango ekokoma tee epai ya Nzambe. | |
Sira | LinVB | 35:8 | Mbala inso okobonza libonza, lakisa elongi ya bosepeli, mpe pesa yoko ya zomi na motema esengo. | |
Sira | LinVB | 35:11 | Omeka kobongola motema mwa ye na mabonza te, akoyamba mango te. Otia motema te na libonza lizangi bosembo ; | |
Sira | LinVB | 35:15 | Ntango mpizoli ya mwasi bozenge itangi o litama lya ye, boleli bwa ye bokofunda oyo anyokoli ye. | |
Sira | LinVB | 35:16 | Nzambe alingi moto oyo akosalelaka ye na motema mobimba, losambo la ye lokokomaka kin’o likolo. | |
Sira | LinVB | 35:17 | Losambo la moto wa bosawa lokokoma kin’o likolo, akozwa libondi te kina losambo la ye lokokoma epai ya Nzambe. | |
Sira | LinVB | 35:18 | Akolembe te kina Mokonzi wa likolo akoyoka, mpe akotala likambo lya basemba, akozongisela bango bosembo. | |
Sira | LinVB | 35:20 | tee akosilisa makasi ma bato ba lolendo mpe akopesa bikolo bisusu etumbu mpo ya mabe ma bango. | |
Sira | LinVB | 35:22 | tee akopesa moto na moto lifuta lya mosala mwa ye, mpe akozongisela bango mabe to malamu balingaki kosala ; | |
Chapter 36
Sira | LinVB | 36:1 | E Mokonzi, Nzambe wa molóngó, oyokela biso mawa, sala ’te bato ba bikolo binso babanga yo, | |
Sira | LinVB | 36:3 | O maye makweli biso olakisi bango bosantu bwa yo, lakisa mpe biso bonene bwa yo o maye okosala bango. | |
Sira | LinVB | 36:5 | Lakisa lisusu bilembo, sala mpe makamwisi, lakisa nkembo mpe bokasi bwa loboko la yo. | |
Sira | LinVB | 36:8 | Bato batikali, móto mwa nkanda ya yo mosilisa bango, mpe baye banyokoli ekolo ya yo bakufa. | |
Sira | LinVB | 36:11 | Bato batangemi na nkombo ya yo, Mokonzi, oyokela bango mawa, zambi Israel azali mwana wa yo wa yambo. | |
Sira | LinVB | 36:14 | Lakisa bondeko lokola olakelaka bankoko ba biso, kokisa maloba baprofeta balobaka o nkombo ya yo. | |
Sira | LinVB | 36:15 | Ondima losambo la bato bakotiaka mitema na yo, bayeba ’te baprofeta ba yo basakolaka mambi ma solo. | |
Sira | LinVB | 36:16 | E Mokonzi, yoka losambo la basaleli ba yo, se lokola olakisaka Arone kobenisa ekolo ya yo. | |
Sira | LinVB | 36:18 | Libumu likoyambaka bilei ndenge na ndenge, kasi bilei binso bizali elengi ndenge yoko te. | |
Sira | LinVB | 36:19 | Edada ekoyebaka elengi ya nyama yoko yoko balambi, se bongo moto wa bwanya ayebi maloba nini mazali ma lokuta. | |
Sira | LinVB | 36:20 | Moto wa mayele mabe akoyokisaka baninga mpasi, moto wa mayele akozongisela ye mabe asali. | |
Sira | LinVB | 36:21 | Mwasi akondimaka mobali oyo aponi ye, kasi o kati ya bilenge basi basusu baleki bolamu. | |
Sira | LinVB | 36:24 | Moto abali mwasi, abandi kozwa nkita, azwi mosalisi akoki na ye, likonzi likotelemisa ndako. | |
Sira | LinVB | 36:25 | Soko lopango lozali polele, bakoya koyiba biloko, soko mwasi azali te, mobali akotelengana na mawa. | |
Sira | LinVB | 36:26 | Nani akotia motema na moyibi ayebani mingi, oyo akosilisaka mboka na bitambolela bya ye ? | |
Chapter 37
Sira | LinVB | 37:1 | Moninga nyonso akolobaka : « Nazali moninga wa yo », kasi basusu bakolinga yo se na monoko. | |
Sira | LinVB | 37:2 | Soko moninga moko abongwani monguna wa yo, okomi na mawa lokola moto aleli ndeko awei. | |
Sira | LinVB | 37:4 | Soko moto azali na bomengo, moninga wa ye mpe akosepela, kasi ekomi ye na mpasi, moninga aboyi kosalisa ye. | |
Sira | LinVB | 37:7 | Balaki banso bakokumisaka malako ma bango moko, kasi basusu bakolukaka kozwa litomba. | |
Sira | LinVB | 37:8 | Okebaka na oyo akopesa yo malako, liboso oyeba eloko nini azali koluka epai ya yo ; mbele akopesa malako na ntina ya kozwa, akobetele yo zeke mpe akoloba na yo : | |
Sira | LinVB | 37:9 | « Maye olingi kosala mazali malamu, » kasi na nsima akomibenda mpe akotala nini ekokwela yo. | |
Sira | LinVB | 37:10 | Soko moto ayokeli yo zuwa, otuna ye malako te, oyebisa bato ba motema likunya makanisi ma yo te. | |
Sira | LinVB | 37:11 | Otuna mwasi te nini akanisi mpo ya mbanda ya ye, to soda akimi etumba nini akanisi mpo ya etumba, to moto wa mombongo nini akanisi mpo ya mombongo, to moto alingi kosomba eloko nini akanisi mpo ya biloko, to moto wa lokoso ndenge nini akotondoko bato, to moto wa makambo makasi nini akanisi mpo ya boboto, to moto goigoi nini akanisi mpo ya mosala, to moto wa mosala ntango nini akosilisa kolona mbuma, to mosali goigoi nini akanisi mpo ya mosala makasi. Otuna bato baye lilako lyoko te. | |
Sira | LinVB | 37:12 | Kasi tuna ntango inso moto wa motema malamu, moto oyo oyebi ’te akotosaka mibeko, moto azali na makambo lokola yo, oyo akoyoka mawa elongo na yo soko makambo mabongeli yo te. | |
Sira | LinVB | 37:16 | Liboso lya kobanda mosala, osengeli komituna, mosala monso okosala, osengeli kokanisa mwango malamu. | |
Sira | LinVB | 37:20 | Mosusu ayebi koloba malamu, kasi bato balingi ye te, mpe bakotika ye akufa na nzala, | |
Sira | LinVB | 37:22 | Mosusu akomisalisaka bobele na bwanya bwa ye moko, moto mosusu akozwa litomba na bwanya bwa ye te. | |
Sira | LinVB | 37:23 | Moto wa bwanya akoteyaka bato ba ekolo ya ye, bango bakozwa litomba lya bwanya bwa ye. | |
Sira | LinVB | 37:24 | Moto wa bwanya akozwa bobenisi bwa Nzambe, baye banso bamoni ye bakotanga ye moto wa esengo. | |
Sira | LinVB | 37:25 | Bakoki kotanga mikolo mya bomoi bwa moto, kasi Israel akoumela mikolo ebele, mya kotanga te. | |
Sira | LinVB | 37:27 | Mwana wa ngai, o bomoi bwa yo omeka motema mwa yo, yeba maye makobongelaka yo te, oboya mango. | |
Sira | LinVB | 37:28 | Makambo masusu makobongelaka bato banso te, mpe bato banso bakoki kosepela na makambo manso te. | |
Sira | LinVB | 37:30 | zambi moto akoliaka na lokoso akobele, lokoso la bilei ekoyokisa ye mpasi o libumu. | |
Chapter 38
Sira | LinVB | 38:7 | Monganga akosalisaka mpe akolembisaka mpasi na matiti mango, maye molambi-nkisi asangisi. | |
Sira | LinVB | 38:8 | Bongo misala mya Mokonzi mikosila mokolo moko te, mpe o mokili bato bokoki kobika o malali mpo ya ye. | |
Sira | LinVB | 38:9 | Mwana wa ngai, soko obeli malali, otomboko te, kasi bondela Mokonzi, bongo akobikisa yo. | |
Sira | LinVB | 38:11 | Tumbela Mokonzi mpaka ya malasi, mpe bonzela ye fufu ya mbuma ya mampa ; bakisa mpe mafuta lokola ekoki na yo. | |
Sira | LinVB | 38:12 | Na nsima byanga monganga aya, zambi ye mpe azali ekelamo ya Nzambe, asalisa yo, zambi osengeli na ye. | |
Sira | LinVB | 38:14 | mpo monganga mpe akosambelaka Mokonzi mpo ’te akoka kolembisa mpasi mpe kobikisa bomoi bwa bato. | |
Sira | LinVB | 38:15 | Moto asali masumu o miso ma Mozalisi wa ye, asengeli kokende koluka libiki epai ya monganga. | |
Sira | LinVB | 38:16 | Mwana wa ngai, soko moto awei, lela ye na mai o miso, lela makasi, lakisa ’te ozali na mawa manene. Kunda ebembe ya mowei lokola ebongi na ye, mpe obosana kobongisa lilita lya ye te. | |
Sira | LinVB | 38:17 | Lela makasi, mpizoli ya miso itanga o nse, sala lilaka lokola ekoki na ye ; mokolo moko to mikolo mibale, mpo batongo yo te, na nsima luka libondi mpo ’te otika koyoka mawa. | |
Sira | LinVB | 38:18 | Mpamba te, moto akoki kowa soko mawa maleki, soko motema mozali na esengo te, nzoto ekolembe. | |
Sira | LinVB | 38:20 | Omipesa ntango inso na makanisi ma mawa te, kasi longola mawa mpe kanisa mikolo mikoya. | |
Sira | LinVB | 38:21 | Obosana te : moto akozongaka te ; na mawa ma yo okosalisa mowei te, kasi okomiyokisa se mpasi. | |
Sira | LinVB | 38:23 | Soko mowei apemi, tika mpe kokanisaka ye, longola mawa noki se ntango azongisi molimo mwa ye. | |
Sira | LinVB | 38:24 | Moteyi akozwa bwanya soko akoluka ntango ya koyekola ; moto azali na misala mingi te, akoki kokoma moto wa bwanya. | |
Sira | LinVB | 38:25 | Moto akosalaka bilanga na epasola mabelé akoki kozwa mayele ndenge nini ? Akoyeba bobele kokamba ngombe na lingenda. Moto ameseni na ngombe, akosala mosala na ngombe bomoi bwa ye mobimba, mpe ayebi bobele lisolo lya ngombe ya ye. | |
Sira | LinVB | 38:26 | Akotia mayele manso se na kopasola mabelé, mpe mpokwa inso akozala se koleisa ngombe. | |
Sira | LinVB | 38:27 | Kapita to mosali wa mabaya se bongo : akosalaka mosala butu moi kopema te. Se bongo na moto akokataka bilembo o bibende : soko asilisi kokata elembo yoko kitoko, akoluka lisusu kokata esusu eleki malamu. Akopesa motema mobimba na kozwa liyemi kitoko, mpe akokutola mpongi ya ye mpo ya kosilisa mosala mona. | |
Sira | LinVB | 38:28 | Se bongo na motuli akofandaka penepene na móto, miso ma ye se na mosala mwa bibende. Milinga mya móto mikokondisa ye nzoto, mpe molunge mwa fulu mokoyokisa ye mpasi. Makeléle ma ebeteli makoboma ye matoi, miso ma ye se epai ya eloko azali kotula. Na motema mobimba alingi kobongisa mosala mwa ye, mpe akokutola mpongi ya ye mpo ya kosilisa mosala mwa ye malamu. | |
Sira | LinVB | 38:29 | Mosali mbeki penepene na mbeki ya ye se bongo : awa azali kotambwisa sani ya masini na makolo, makanisi ma ye manso makei epai ya mosala, mpe asili atangi biloko boni alingi kosilisa. | |
Sira | LinVB | 38:30 | Akoyema libazi na maboko, akopoto lyango malamu na makolo ma ye ; akotia motema mobimba na kobongisa mbeki o libanda, mpe akokutola mpongi ya ye mpo ya kopetola fulu. | |
Sira | LinVB | 38:31 | Bango banso bakotiaka mitema na mosala mwa maboko, mpe moto na moto ayebi mosala mwa ye malamu. | |
Sira | LinVB | 38:32 | Soki bango te, ata mboka yoko etongamaki te, mpe tozalaki na ndako mpe na balabala te. | |
Sira | LinVB | 38:33 | Kasi bakoyaka o likita lya bayangeli te, mpe o lisanga lya bankumu bazali na esika ya lokumu te. Bakofandaka o kiti ya bazuzi te, mpe bayebi kolimbola mibeko te. | |
Chapter 39
Sira | LinVB | 39:1 | Na moto akomanyolaka mibeko mya Mokonzi ezali bongo te : akolukaka koyeba bwanya bwa bankoko, mpe o ntango akoki kopema akotangaka maloba ma baprofeta. | |
Sira | LinVB | 39:2 | Akobombaka masolo ma bikela bya bato banene o motema, mpe ayebi kotondolo ntina ya miulani minso. | |
Sira | LinVB | 39:4 | Akosalaka o ntei ya bato banene, mpe akomononoko o bisika bakonzi basangani. Akokendeke mibembo o bikolo bisusu, mpe akomonoko bongo bolamu na bobe bwa bato. | |
Sira | LinVB | 39:5 | Uta ntongo akolukaka na motema moko kokutana na Mokonzi, Mozalisi wa ye, mpo asambela Nzambe wa Nta Likolo. Akofungolaka monoko mpo ya kosambela mpe kosenge ye alimbisa ye masumu. | |
Sira | LinVB | 39:6 | Soko Mokonzi nta bonene alingi bongo, moto oyo akotonda na mayele : akobimisa maloba maike ma bwanya, mpe akokumisa Mokonzi o ntango ya losambo. | |
Sira | LinVB | 39:8 | Akolakisa baninga mateya maye azwaki, mpe akoluka lokumu na botosi Mibeko mya Nzambe. | |
Sira | LinVB | 39:9 | Bato mingi bakokumisa mayele ma ye mpe bakobosana ye mokolo moko te ; bakokanisa ye ntango inso, mpe nkombo ya ye ekokufa mokolo moko te. | |
Sira | LinVB | 39:11 | Soko aumeli na bomoi, nkombo ya ye ekoleka nkombo ya bato nkoto, mpe o ntango ya liwa akozwa lokumu lokoki na ye. | |
Sira | LinVB | 39:12 | Nalingi kobakisa naino makanisi masusu, mpo natondi na mango lokola sanza emononi mobimba. | |
Sira | LinVB | 39:14 | Bopalinginya nsolo mpimbo lokola mpaka ya malasi, mpe bokola lokola fulele ya lisi ; botombola mingongo, boyemba banso lisanga, mpe bokumisa Mokonzi mpo ya bikela bya ye binso. | |
Sira | LinVB | 39:15 | Bosakola nkombo ya ye mpe bokumisa ye na nzembo mpe na bobeti nzenze, bokumisa mpe botondo ye boye : | |
Sira | LinVB | 39:16 | « Bikela binso bya Mokonzi bileki bolamu, manso makosalemaka o ntango ye akani. » Boloba te : « Yango eloko nini ? Ntina ya yango nini ? » Basengeli koyekola manso o ntango ekoki. | |
Sira | LinVB | 39:17 | Soko ye atindi bongo, mai makoteleme lokola efelo, mpe soko apesi atinda, makotonda o mabulu. | |
Sira | LinVB | 39:18 | Manso ye atindi makosalema se bongo, moto moko akoki kopekisa mosala mwa ye mwa libiki te. | |
Sira | LinVB | 39:20 | Uta libandela tee nsuka ya molóngó akomonoko binso, eloko yoko ekoki kokamwisa ye te. | |
Sira | LinVB | 39:21 | Boloba te : « Yango eloko nini ? Ntina ya yango nini ? » mpo bikelamo binso bikelami se na ntina. | |
Sira | LinVB | 39:22 | Bobenisi bwa Nzambe bozali lokola ebale etondi mai, mpe bopolisi mokili lokola mpela enene. | |
Sira | LinVB | 39:23 | Bobele bongo, na nkanda ya ye, abotoloki bapagano biloko, mpe akomisaki mai mongwa. | |
Sira | LinVB | 39:24 | Akolakisa basantu ba ye nzela elamu, kasi bato baboyi mibeko bakotuta mabaku mingi. | |
Sira | LinVB | 39:25 | Ut’o libandela Nzambe akelaki biloko bilamu mpo ya bato balamu, mpe biloko bibe mpo ya basumuki. | |
Sira | LinVB | 39:26 | Biloko bya liboso bisengeli na bato byango biye : mai, móto, ebende mpe mongwa, mbuma ya mampa, mabéle, mafuta ma nzoi, mai ma mbuma ya vino, mafuta ma mbila mpe elamba. | |
Sira | LinVB | 39:28 | Mimpepe misusu mikelamaki mpo ya kotumbola bato, na nkanda enene mikokwela bato. Soko alingi koboma biloko binso, akobimisa ekumbaki, mpe bongo mimpepe mikosilisa nkele ya Mozalisi. | |
Sira | LinVB | 39:29 | Móto, mbula ya matandala, nzala mpe liwa, Nzambe asali byango mpo ya kopesa bato etumbu. | |
Sira | LinVB | 39:30 | Mino ma nyama ya zamba, nkotó na bitupa, mpe mompanga mwa bobekoli bikelami mpo ya kosilisa basumuki. | |
Sira | LinVB | 39:31 | Byango binso bikotosaka monoko mwa ye na esengo, bizali awa o nse mpo ya mokolo akosengela na byango, mpe soko ntango ekoki bikoboya kotosa ye te. | |
Sira | LinVB | 39:32 | Yango wana, uta ebandela nayebaki yango malamu, namanyoli yango, bongo nakomi boye : | |
Sira | LinVB | 39:33 | Manso Mokonzi akosalaka mazali se malamu, o ntango ekoki akopesaka binso biye bisengeli. | |
Chapter 40
Sira | LinVB | 40:1 | Bato banso bakoyokaka mpasi, bana ba Adamu bakomemeke mokumba monene o mapeke, banda mokolo babimi o libumu lya mama tee mokolo bakozonga epai ya mama wa bato banso. | |
Sira | LinVB | 40:2 | Likambo bakokanisaka mingi mpe bakobangaka, liye likosalaka ’te bazali motema likolo ntango inso, nde mokolo mwa liwa. | |
Sira | LinVB | 40:4 | álata bilamba bya longondo na enkoti ya bokonzi, to bobele nkungulu : bango banso se makambo ma nkanda, ma zuwa, matungisi, bobangi liwa, bowelani na boswani. | |
Sira | LinVB | 40:5 | Mpe ntango bakomi kopema mpe kolala o mbeto, mpongi ya butu ekopesaka bango mabanzo ebele. | |
Sira | LinVB | 40:6 | Moto akoka kopema moke, to ata moke te, noki akomilembisa na ndoto lokola amilembisi na moi. Akobanga mpo ya bimonela lokola moto akimi bitumba. | |
Sira | LinVB | 40:7 | Ntango ndoto ekoyokisa ye nsomo enene, akolamuka, akokamwa na ndenge azalaki kobanga mpamba. | |
Sira | LinVB | 40:8 | Maye makokwelaka bikelamo binso, ná moto ná nyama, mosumuki mbala nsambo kutu, mango maye : | |
Sira | LinVB | 40:9 | liwa, bosopi makila, boswani, bitumbu, makambo ma mawa, nzala, mibulungano, minyoko. | |
Sira | LinVB | 40:10 | Makambo maye manso makelami mpo ya basumuki, mpo ya bango mpela enene ezindisaki mokili. | |
Sira | LinVB | 40:12 | Makabo mpe misala mizangi bosembo makosila, kasi bolamu bwa moto semba bokozala seko. | |
Sira | LinVB | 40:13 | Nkita ya bato bazangi bosembo ekosila noki lokola ebale ekokauka o elanga, ekolimwa lokola nkake ebeti o ntango ya mbula. | |
Sira | LinVB | 40:15 | Bana ba basumuki bazali lokola nzete eboti bitapi mingi te, lokola nzete ilonami o kati ya mabanga. | |
Sira | LinVB | 40:16 | Bazali lokola matiti makoli mpembeni ya ebale, bakolongola mango liboso lya matiti masusu manso. | |
Sira | LinVB | 40:17 | Kopesa likabo ezali elengi lokola elanga ekobotaka mingi, mpe bolamu osali moninga bokobunga mokolo moko te. | |
Sira | LinVB | 40:18 | Bomoi bwa nsomi mpe bwa mosali bozali elengi, kasi moto azwi nkita eye ebombami aleki bango babale. | |
Sira | LinVB | 40:19 | Kobota bana mpe kotonga engumba ekopesa moto lokumu, kasi kozwa bwanya eleki bolamu. Bakokumisaka moto azali na bibwele mpe na bilanga, kasi bakolingaka liboso mpenza mwasi oyo abongi nye. | |
Sira | LinVB | 40:20 | Komele vino mpe kobete miziki ekosepelisaka bato, kasi kolinga bwanya eleki esengo. | |
Sira | LinVB | 40:21 | Nzembo ya mpiololo mpe ya likembe ezali elengi mingi, kasi lolaka kitoko lopusi elengi. | |
Sira | LinVB | 40:22 | Kotala biloko binzenga mpe kitoko ekosepelisa miso, kasi kotala milona mibesu o bilanga epusi kosepelisa. | |
Sira | LinVB | 40:23 | Bato baye balingani, bakokutanaka o ntango ebongi, kasi bokutani bwa mobali na mwasi boleki elengi. | |
Sira | LinVB | 40:24 | Bandeko na bayebani bakosalisaka o ntango ya mpasi, kasi likabo liye likobikisa yo lipusi bolamu. | |
Sira | LinVB | 40:25 | Wolo na palata bikopesaka bato makasi, kasi eloko ekosalisa yo mingi nde lilako lilamu. | |
Sira | LinVB | 40:26 | Nkita na bokasi bwa nzoto bikopesa moto elikya, kasi elikya ya solo se bobangi Mokonzi. Moto akobangaka Mokonzi akokelela te, ntina akende koluka lisalisi epai esusu ezali te. | |
Sira | LinVB | 40:27 | Moto akobangaka Mokonzi afandi o lopango kitoko, lokobatelaka ye malamu leka lokumu lonso. | |
Sira | LinVB | 40:28 | Mwana wa ngai, olinga bisengesenge te, malamu moto áwá, kasi asengela kosengeke te. | |
Sira | LinVB | 40:29 | Oyo asengeli kotia motema na meza ya moninga, azali lokola moto azali na bomoi lisusu te. Akomikomisa moto wa mbindo na bilei bya bato basusu, moto wa bwanya mpe wa bonkonde akosalaka bongo te. | |
Chapter 41
Sira | LinVB | 41:1 | E liwa, kokanisa yo ezali elengi soki te, ézala bato ba-fandi malamu o kati ya biloko bya bango, to baye bakoki kotia mitema na maye manso bazwi, mpe bakoki naino koyoka elengi ya bilei. | |
Sira | LinVB | 41:2 | E liwa, mokolo mwa yo mokoyokisa esengo na baye bazali na makasi lisusu te mpe bakeleli, ná baye banuni mingi mpe bazali se komitungisa, baye bamoni ntina lisusu te mpe babwaki elikya. | |
Sira | LinVB | 41:4 | Mobeko moye mwa Mokonzi motali bikelamo binso, ntina nini okosilikela Nzambe soko alingi bongo ? Ata oumeli mibu zomi, monkama to nkoto, o mboka ya bawa bakomituna mpo ya bolai bwa bomoi te. | |
Sira | LinVB | 41:5 | Bana ba basumuki bakozala bato babe mpenza, baye bameseni se na ndako ya bato baboyi Nzambe. | |
Sira | LinVB | 41:6 | Nkita ya bana ba basumuki ekosila noki, kasi nsoni ya libota lya bango ekosila soki te. | |
Sira | LinVB | 41:7 | Soko tata aboyi Nzambe, bana bakofinga ye, mpo nsoni ya bango euti na tata wa bango. | |
Sira | LinVB | 41:9 | Bobotami bobele mpo ’te babetele bino mobondo, mpe mokolo bokokufa mabe makokwela bino. | |
Sira | LinVB | 41:10 | Binso biuti o mabelé bikozonga o mabelé, se bongo mabe makweli baye baboyi Nzambe mpo ’te babeba seko. | |
Sira | LinVB | 41:13 | Bomoi, ata bwa moto malamu, bokoumela mingi te, kasi lokumu la moto lokoumela seko. | |
Sira | LinVB | 41:14 | Bana ba ngai, botosa mateya ma ngai na motema boboto ! Bwanya balakisi te mpe nkita ebombami bizali nde na litomba ? | |
Sira | LinVB | 41:15 | Moto oyo ayebi kobombela bato bolema bwa ye aleki oyo aboyi kolakisa bango bwanya bwa ye. | |
Sira | LinVB | 41:16 | Nakoyebisa yo na makambo nini osengeli koyoka nsoni, mpo okoki koyoka nsoni na makambo manso te, ata bato basusu bakokanisaka bongo te. | |
Sira | LinVB | 41:17 | Yoka nsoni na bosali bosoni o miso ma tata na mama, soko obuki lokuta o miso ma bakonzi mpe bayangeli, | |
Sira | LinVB | 41:18 | soko osali likambo lipekisami o miso ma bazuzi, to obuki mibeko o lisanga lya bana mboka ; | |
Sira | LinVB | 41:20 | Kanisa bosolo bwa Nzambe mpe bondeko akati na yo, bongo yoka nsoni soko oweli mampa o meza, | |
Sira | LinVB | 41:21 | soko oyebi koyamba to kopesa eloko na bonkonde te, to ozongisi liloba te na moto apesi yo losako ; | |
Sira | LinVB | 41:24 | soko okomi komesene mingi na mosali mwasi wa yo, (omeka kobeleme na mbeto ya ye te !) | |
Chapter 42
Sira | LinVB | 42:1 | Kasi makambo masusu, oyoka mango nsoni te, (mpe osala mabe te mpo ya bobangi miso ma bato) : | |
Sira | LinVB | 42:2 | Oyoka nsoni te mpo ya kotosa mibeko mya Nzambe, mpo ya komemya bondeko bwa ye mpe kokitisa mosumuki. | |
Sira | LinVB | 42:3 | Oyoka nsoni te mpo ya kotanga elongo na moninga mbongo boni moko moko abimisi, to mpo ya kopesa bato biloko biye bawei batikeli bango ; | |
Sira | LinVB | 42:4 | mpo ya kotala soko emekeli ya biloko ebongi solo, mpo ya kozwa litomba like to linene. | |
Sira | LinVB | 42:5 | Oyoka nsoni te soko ozali kozwa litomba na mombongo mwa yo, soko obokoli bana ba yo na miso makasi, to soko obeti moombo oyo akosalaka mabe. | |
Sira | LinVB | 42:6 | Soko ozali na mwasi alingi kotala biloko binso, kanga sanduku ya yo na bikangeli ; soko ozali na bato mingi o ndako, kanga biloko bya yo na lifungola. | |
Sira | LinVB | 42:7 | Biloko olingi kobombisa epai ya moto mosusu, tanga byango mpe meka bozito bwa byango. Soko odefi eloko ya moto to odefisi, koma makambo manso o monkanda. | |
Sira | LinVB | 42:8 | Oyoka nsoni te mpo ya kopalela elema mpe moto zoba, na mpe mobange oyo akosalaka bosoni. Okomilakisa bongo moto wa mayele solo, mpe bato banso bakondima yo. | |
Sira | LinVB | 42:9 | Tata oyo aboti mwana mwasi akozala ntango inso motema likolo, akomitungisa mpo ya ye, mpongi ekokima ye na butu. Soko abali naino te, akobanga ’te bakobala ye te ; soko asili abali, akobanga ’te mobali akoboya ye. | |
Sira | LinVB | 42:10 | Soko azali naino ngondo, akobanga ’te bakosenginya ye, mpe akokwela zemi o ndako ya ye. Soko azali na libala, akoki kokosa mobali wa ye, to mpe azali o ndako ya mobali, kasi akobota te. | |
Sira | LinVB | 42:11 | Soko ozali na mwana mwasi aboyi kotosa, kengele ye malamu ; soki te, akosala ’te banguna baya kotiola yo, bato ba mboka mobimba baya kotonda mpo ya koseke yo, mpe osambwa o miso ma bato banso. | |
Sira | LinVB | 42:13 | Lokola mpanda ekoutaka o bilamba, se bongo bobe bwa mwasi moko bokoleka epai ya mwasi mosusu. | |
Sira | LinVB | 42:14 | Mobali wa matata aleki mwasi wa boboto. Mwasi akeba na makambo manso makoki koyokisa ye nsoni. | |
Sira | LinVB | 42:15 | Sikawa nakokundola bikela bya Nzambe, nakoyebisa yo maye namoni : akeli binso na Liloba lya ye. | |
Sira | LinVB | 42:17 | Ata banzelu ba Mokonzi bakoki kosakola makamwa ma ye manso te, maye Mokonzi wa bokasi bonso abongisaki mpo ’te molóngó mobimba mozala mpo ya nkembo ya ye. | |
Sira | LinVB | 42:18 | Ayebi bozindo bwa mbu mpe makanisi ma mitema mya bato, mpo Nzambe wa Nta Likolo ayebi manso, mpe akomonoko makambo manso makosalema. | |
Sira | LinVB | 42:21 | Abongisi bikela bya bwanya bwa ye malamu mpenza, akobongwanaka te ut’o libandela kin’o lobiko. Bakoki kopesa to kobotolo ye eloko te, asengeli na malako ma moto moko te. | |
Chapter 43
Sira | LinVB | 43:1 | Etando ekongengeke o likolo eleki bonzenga, nkembo ya likolo ekosepelisaka miso ma bato. | |
Sira | LinVB | 43:2 | Ntango mwese mokobimaka na ntongo mokosakolaka mosala monene mwa Nzambe wa nta likolo. | |
Sira | LinVB | 43:4 | Bakopelisaka móto makasi mpo ya kotula bibende, kasi moi mokokaukisaka ngomba, moleki mwango mbala isato. Mwese mokotindaka moi makasi mpe mokozikisaka, mokobimisaka miloli mya móto miye mikobomaka miso. | |
Sira | LinVB | 43:5 | Nzambe, oyo akeli mwango, azali monene, na liloba lya ye akokambaka mwango o nzela mosengeli kokende. | |
Sira | LinVB | 43:7 | Sanza ekolakisaka bato mikolo mya biyenga, ntango ekomononoko mobimba, na nsima malembe malembe ekotikaka kongenge. | |
Sira | LinVB | 43:8 | Bakotangaka bileko bya mobu na nkombo ya yango ; sanza ekokolaka mpe ekokutwaka na botamboli, ezali mwinda mwa mampinga ma likolo, mokongengeke o etando ya likolo. | |
Sira | LinVB | 43:9 | Bonzenga bwa etando nde minzoto mya nkembo, miye mikokembisaka etando ya Mokonzi na bongengi. | |
Sira | LinVB | 43:11 | Talaka monama o likolo mpe kumisa Mozalisi wa mwango, monama moleki bonzenga na nkembo ya mwango. | |
Sira | LinVB | 43:12 | Ekomononoko lokola libungutulu lya nkembo o likolo, litiami wana na maboko ma Nzambe mpenza. | |
Sira | LinVB | 43:13 | Nzambe akotindaka mbula ya mpembe ekita, akotindaka minkalali lokola ye moko alingi. | |
Sira | LinVB | 43:14 | Bobele bongo akofungolaka bibombelo bya ye, mpe mampata makopimbwaka lokola ndeke. | |
Sira | LinVB | 43:15 | Azali na makasi ma kokangisa mai ma mbula mpo matanga ma mbula makita lokola matandala. | |
Sira | LinVB | 43:16 | Ntango ngomba imoni ye, ikomi koningana mpe kolenge, soko ye alingi, mompepe mwa Sudi moyei makasi ; | |
Sira | LinVB | 43:17 | soko nkake ebeti mokili mokomi na mpasi, mompepe mwa Nordi mopepi mpe ekumbaki eyei. | |
Sira | LinVB | 43:18 | Enokisi ye mbula ya mpembe, ekokita lokola ndeke, ekokweya lokola mapalela o bilanga. Mpembe makasi ya mbula eye ekosepelisa miso, mpe ntango bato bamoni ’te enoki bakokamwa. | |
Sira | LinVB | 43:19 | Akotindaka mpe mamio o mabelé mapanzana lokola mongwa ; soko ekomi galasi, ekomi nsonge nsonge lokola nzube. | |
Sira | LinVB | 43:20 | Mompepe mwa mpio makasi mokoutaka epai ya Nordi mokokangisa galasi o likolo lya mai ; mompepe moye mokosala mosala o bitima binso, lokola molingi kolatisa mai elamba ya bibende. | |
Sira | LinVB | 43:21 | Mompepe mwa Nordi mokokaukisa ngomba, mokotumba eliki, mokozikisa esobe lokola móto. | |
Sira | LinVB | 43:22 | Kasi londende na mamio ikobongisa yango lisusu, mamio makoyaka nsima ya molunge, makoyokisa nsai. | |
Sira | LinVB | 43:26 | Na makasi ma Nzambe ntoma wa ye akolonga, mpo ya etinda ya ye manso makosuka malamu. | |
Sira | LinVB | 43:27 | Ata tolobi mingi, tokoki kotanga manso te ; toloba na bokuse : « Nzambe azali binso ! » | |
Sira | LinVB | 43:28 | Wapi epai tokozwa nguya ya kokumisa ye ? Azali Nzambe monene, aleki bikelamo binso. | |
Sira | LinVB | 43:30 | Bokumisa Mokonzi, boyembela ye lokola bokoki : aleki binso. Bolembe te koyembela ye na makasi ma bino manso, zambi bikela bya ye bizali na nsuka te. | |
Sira | LinVB | 43:31 | Nani moto amoni ye mpo ’te ayebisa baninga ? Nani moto akoki kokumisa ye lokola ebongi na ye ? | |
Sira | LinVB | 43:32 | Biso tokoki komono se ndambo ya bikelamo bya ye, biye tokomonoko te, bizali mingi mpe bileki bonene. | |
Chapter 44
Sira | LinVB | 44:1 | Tokumisa bato banene ba ekolo ya biso, tokumisa bankoko ba biso, tobanda na baye ba liboso. | |
Sira | LinVB | 44:3 | Basusu bazalaki na lokumu la boyangeli mokili, nkombo ya bango iyebani mingi mpo ya misala mya bango ; basusu bato ba mayele mingi bayebaki kopesa malako mpe kosakola o nkombo ya Nzambe. | |
Sira | LinVB | 44:4 | Basusu bazalaki kokamba bato na malako ma bango, bazalaki na mayele mingi ma koteya bato mpe ma kobokolo bango na maloba ma bwanya. | |
Sira | LinVB | 44:9 | Basusu batiki ata nkombo ya bango te, balimwi lokola bato bazalaki o mokili te, lokola bato babotamaki te ; na bana ba bango se bongo. | |
Sira | LinVB | 44:12 | Bana ba bango bakobi kotosa mibeko mya Nzambe, mpe bankoko balandi se ndakisa ya bango. | |
Sira | LinVB | 44:14 | Bakundi nzoto ya bango na boboto, mpe nkombo ya bango ikobungama te o bileko binso. | |
Sira | LinVB | 44:15 | Bato ba bikolo binso bakokumisa bwanya bwa bango. O lisanga lya bato bakosakola lokumu la bango. | |
Sira | LinVB | 44:16 | Enok asepelisi Mokonzi, bongo atombwami o likolo, atikeli bato banso bakoya nsima ya ye ndakisa ya bwanya. | |
Sira | LinVB | 44:17 | Nzambe andimelaki Nowe moto wa bosembo, o eleko ya nkanda akomi tata wa libota lya sika. Mpo ya ye, ndambo ya bato batikalaki o ntango mpela enene ezindisaki mokili. | |
Sira | LinVB | 44:18 | Na nsima Nzambe akati na ye bondeko bwa seko mpo ’te mpela enene esilisa bato lisusu te. | |
Sira | LinVB | 44:19 | Abarama azali nkoko ayebani mingi wa bato ebele, moto moko te akokani na ye na lokumu. | |
Sira | LinVB | 44:20 | Atosaki mibeko mya Nzambe wa Nta Likolo, mpe Nzambe akati na ye bondeko. Abarama akati elembo ya bondeko bona o nzoto ; ntango Nzambe amekaki ye, alakisi se botosi. | |
Sira | LinVB | 44:21 | Yango wana Nzambe alakeli ye na ndai ’te bikolo bisusu bikozwa bolamu mpo ya bankoko ba ye ; akozala na bankoko ebele lokola mputulu ya mabelé, mpe na nguya lokola minzoto o likolo. Alakeli ye ’te akopesa ye mokili mobimba, banda mbu enene tee ndelo ya mbu esusu, banda Ebale enene tee nsuka ya mokili. | |
Chapter 45
Sira | LinVB | 45:1 | O libota lya Yakob abimisi moto malamu moko, oyo bato banso bazalaki kolinga, ná Nzambe ná bato balingaki ye mingi. Nkombo ya ye, Moze, moto moko abungi ye te. | |
Sira | LinVB | 45:2 | Nzambe apesi ye nkembo lokola nkembo ya banzelu, apesi ye nguya enene mpo ya kobangisa banguna. | |
Sira | LinVB | 45:3 | Asali bikela binene mpo ya maloba ma ye, akomisi ye monene mpo akoka bakonzi ; apesi ye mitindo mpo ya bato ba ye, mpe alakisi ye nkembo ya ye mwa moke. | |
Sira | LinVB | 45:4 | Asantisi ye mpo ya botosi mpe boboto bwa ye, mpe aponi ye o kati ya bato banso ba nse. | |
Sira | LinVB | 45:5 | Ayokisi ye lolaka la ye, mpe akotisi o limpata liindo, azalaki koloba na ye mpe apesi ye mitindo, miye mikopesaka bato bomoi mpe bwanya, mpo ya kolakisa libota lya Yakob bondeko mpe bana ba Israel mitindo mya ye. | |
Sira | LinVB | 45:7 | Akati na ye bondeko bwa seko, akulisi ye bonganga mpo ya kosalisa bato. Ayokisi ye esengo na bilamba nta bonzenga, mpe alatisi ye molato mwa nkembo. | |
Sira | LinVB | 45:8 | Akembisi ye na bilamba bya lokumu, mpe alatisi ye bilembo bya nguya ya ye : mompila, monkoto molai na efod. | |
Sira | LinVB | 45:9 | Akembisi elamba ya ye na mbuma ya malala, mpe ngengele mingi ya wolo, epai na epai, mpo ’te ilela ntango azalaki kotambola ; izalaki kokoyona o Tempelo, bongo bato bakundola ’te Nzambe azalaki wana ! | |
Sira | LinVB | 45:10 | Alatisi ye elamba ya wolo ya bosantu, ya longondo, ya motane mpe ya mwa moindo, esalemi na mosoni wa ntoki, bakisa libenga ya ‘Urim na Tumim’ mpo ya kotuna Nzambe. | |
Sira | LinVB | 45:11 | Libenga lizalaki lya kiusa ya moindo, lisonami na moto wa ntoki ya solo ; lizalaki na mabanga ma motuya, maye bakangisi na bikangeli bya wolo ; lisalemi kitoko mpenza. Mpo ’te Nzambe abosana bango te bakati nkoma o mabanga, izalaki nkombo ya libota lyoko lyoko lya Israel. | |
Sira | LinVB | 45:12 | O ngabuni alati enkoti ya wolo, ezalaki na elembo ya mobonzami na Nzambe, enkoti ya lokumu mpenza, mosala mwa ntoki mingi ; bikembiseli biye bizalaki kobenda miso ma bato. | |
Sira | LinVB | 45:13 | Moto moko amoni naino bilamba binzenga boye te, mokolo moko te mompaya alataki yango, bobele bana na bankoko ba ye bakolata yango ntango inso. | |
Sira | LinVB | 45:15 | Moze akomisi ye nganga Nzambe, apakoli ye mafuta masantu. Ekomi mosala mwa ye mwa seko mpe mwa bankoko ba ye kin’o lobiko. Ayangela milulu mpe asala mosala mwa bonganga, abenisa mpe bato ba ye o nkombo ya Nzambe. | |
Sira | LinVB | 45:16 | Mokonzi aponi ye o kati ya bato banso mpo abonzela ye libonza mpe mpaka ya malasi ya nsolo mpimbo mpo ’te akanisa ekolo ya ye, mpe alimbisa bango masumu. | |
Sira | LinVB | 45:17 | Apesi Arone mibeko na mimeseno mya ye, mpe likoki lya kosambisa bato na myango, mpo ’te ateya bana ba Yakob mateya ma ye mpe alimbolela bato ba Israel mibeko mya ye. | |
Sira | LinVB | 45:18 | Bato ba libota lya ye te batomboki na ye, mpe bayokeli ye likunya ntango bazalaki o eliki : bato ba Datan na bato ba Abiram, na lingomba lya bato ba Kore bangalaki na nkanda enene. | |
Sira | LinVB | 45:19 | Mokonzi amoni yango mpe asiliki, abomi bango banso na nkanda enene mpenza, alakisi bango makamwa manene, abomi bango na miloli mya móto. | |
Sira | LinVB | 45:20 | Na nsima akolisi lokumu la Arone, atindi ’te bapesa ye biloko biye : mbuma ya yambo inso bato babonzaki, mpe mampa ebele. | |
Sira | LinVB | 45:21 | Alingisi bango balia mabonza bato babonzeli Mokonzi, Mokonzi apesi ye mango, na bana na mpe bankoko ba ye. | |
Sira | LinVB | 45:22 | Kasi o ekolo mobimba azwi mabelé te, bandeko ba ye bazwi, kasi ye azwi te, zambi ekomami : « Ngai moko nazali likabo lya yo. » | |
Sira | LinVB | 45:23 | Pinekas, mwana wa Eleazar, azalaki moto wa basato oyo azwi lokumu, zambi amilakisaki moto wa mpiko mpe wa bobangi Mokonzi. Asalaki molende o ntango bato bazalaki kotomboko, na mpiko enene azweli Israel bolimbisi. | |
Sira | LinVB | 45:24 | Na ntina ena, Nzambe akati na ye bondeko bwa boboto. Aluboli ye mokonzi wa ndako esantu mpe moyangeli wa bato ba ye, azala nganga mokonzi seko, ye na bana ba ye. | |
Sira | LinVB | 45:25 | Nzambe akati mpe bondeko na Davidi, mwana wa Yese, wa libota lya Yuda. O bokonzi boye mwana moko, to nkoko moko akokitana ye. Kasi libota lya Arone mobimba bakosangola bonganga Nzambe bwa ye. | |
Chapter 46
Sira | LinVB | 46:1 | Yozue, mwana wa Nun, azalaki mobuni wa mpiko. Akitani Moze o mosala mwa profeta, mpe lokola nkombo elakisi, akomi moto monene mpo abikisa baye Mokonzi aponoki, akweisa banguna batombokeli ye, mpe akotisa bato ba Israel o mokili akabeli bango. | |
Sira | LinVB | 46:3 | Nani liboso lya ye azalaki na mpiko lokola ye ? Ye moto azalaki kokamba bitumba bya Mokonzi. | |
Sira | LinVB | 46:4 | Ye atelemisi mwese na losambo la ye, mpe moi mwa mokolo moko aumisi mwango mikolo mibale. | |
Sira | LinVB | 46:5 | Abondeli Nzambe wa Nta Likolo ntango banguna ba ye bazingaki ye bipai binso. Mokonzi nta bonene ayoki losambo la ye, anokisi mbula ya matandala elekaki makasi. | |
Sira | LinVB | 46:6 | Akei kobundisa ekolo ya banguna, mpe abomi basoda babandaki kokita ngomba. Alakisi bato ba bikolo bongo nguya ya bibuneli bya ye, bayeba ’te bazalaki kobunisa Mokonzi yemei, | |
Sira | LinVB | 46:7 | mpo azalaki se kolanda Nzambe wa bokasi bonso. O ntango ya Moze azalaki se na botosi lokola Kaleb, mwana wa Yefune : Bango bakangisi bato monoko o lisanga, bongo bapekisi bango basala masumu te mpe batika kolobaloba. | |
Sira | LinVB | 46:8 | Yango wana bobele bango babale babiki o kati ya basoda ba makolo nkoto nkama motoba ; bayingeli bongo o mokili Nzambe alakelaki bango, mokili motondi na mabéle mpe na mafuta ma nzoi. | |
Sira | LinVB | 46:9 | Mokonzi apesi Kaleb makasi ma nzoto tee ntango akomi mobange. Ayingeli o mokili mwa ngomba, moye bana na bankoko ba ye basangoli. | |
Sira | LinVB | 46:11 | Na nsima tokotanga bazuzi, moko moko na lokumu la ye, mpo mitema mya bango mibebaki te, mpe bapesaki Nzambe mokongo te. Bakumisa nkombo ya bango. | |
Sira | LinVB | 46:12 | Minkuwa mya bango o malita mibota mbuma, nkombo ya bango ipesama lisusu, ilongobana na bankoko ba bato baye ba lokumu. | |
Sira | LinVB | 46:13 | Mokonzi alingaki Samuel solo ; ye profeta wa Nzambe abandisaki bokonzi bwa sika, apakoli bato mafuta mpo bazala bayangeli ba ekolo. | |
Sira | LinVB | 46:14 | O bosambisi bato azalaki kotosa mibeko mya Mokonzi, bongo Mokonzi azalaki kosalisa libota lya Yakob. | |
Sira | LinVB | 46:15 | Amimonisi profeta wa Nzambe mpo ya botosi bwa ye, ye momoni makambo wa solo mpo ya maloba ma ye. | |
Sira | LinVB | 46:16 | O ntango banguna bayaki kozinga ye bipai binso, abondeli Mokonzi Nzambe wa bokasi bonso, abonzeli ye mwana mpata ezalaki na mbeba te. | |
Sira | LinVB | 46:19 | Liboso lya kokende kopema seko, asakoli o miso ma Nzambe mpe ma moponomi wa ye : « Nayibaki eloko ya moto te, mosolo te, ata sapato te », mpe moto moko afundaki ye te. | |
Chapter 47
Sira | LinVB | 47:2 | Lokola bakoponoko mafuta ma libonza lya bondeko, se bongo Nzambe aponi Davidi o kati ya bana ba Israel. | |
Sira | LinVB | 47:3 | Davidi asakani na ntambwe lokola izalaki se bana ntaba mpe na nkoi lokola izalaki se bana mpata. | |
Sira | LinVB | 47:4 | Ezalaki ye naino elenge mobali, abomi elombe, alongoli nsoni enene ezalaki o ekolo ya ye. Abwakeli Goliat libanga na bilingongo, mpe asukisi bongo lofundo la ye. | |
Sira | LinVB | 47:5 | Awa abondeli Mokonzi wa Nta Likolo, oyo alendisi loboko la ye la mobali, abomi bongo elombe oyo ameseneki na bitumba, mpe azongisi makasi na bato ba ekolo ya ye. | |
Sira | LinVB | 47:6 | Bakumisi ye lokola moto abomi bato nkoto zomi, bakumisi ye mpo Nzambe abenisi ye, balatisi ye enkoti ya nkembo enene, | |
Sira | LinVB | 47:7 | mpo abomi banguna bazalaki penepene, anyati ba-Filisti bayelaki ye etumba, asilisi makasi ma bango libela. | |
Sira | LinVB | 47:8 | O misala mya ye minso azalaki kotondo Nzambe nta bosantu na maloba ma bokumisi. Azalaki koyembela Mozalisi wa ye nzembo mpe kolinga ye na motema mobimba. | |
Sira | LinVB | 47:10 | Atindi ’te basepela biyenga bya Nzambe na lokumu lonene, abongisi milulu mya biyenga binene mpo ’te bakumisa nkombo esantu ya Mokonzi, ntongo ntongo babanda koyemba nzembo o ndako esantu. | |
Sira | LinVB | 47:11 | Mokonzi alimbisi mabe ma ye, apesi bokonzi bwa ye nguya seko, akati na ye bondeko lokola bakonzi bakosalaka mpe apesi ye ngwende ya lokumu o Israel. | |
Sira | LinVB | 47:12 | Nsima ya ye, mwana wa ye, moto wa bwanya, akitani ye, azwi kimia mpo ya tata wa ye. | |
Sira | LinVB | 47:13 | Eleko ya bokonzi bwa Salomo ezalaki eleko ya boboto, Nzambe apesaki ye kimia o bikolo binso mpo ’te atongela nkombo ya ye ndako, mpe abongisa esika esantu seko. | |
Sira | LinVB | 47:14 | E Salomo, ozalaki na bwanya o bolenge bwa yo, otondaki na mayele lokola ebale etondi na mai ! | |
Sira | LinVB | 47:15 | Bwanya bwa yo bopalanganaki o nse mobimba, otondisi yango na biyele mpe na sambole ya yo. | |
Sira | LinVB | 47:16 | Nkombo ya yo eyebanaki kin’o bisanga mosika, bato balingaki yo mpo ya boboto bwa yo. | |
Sira | LinVB | 47:18 | Okongoli wolo lokola bibende bya mpamba, mpe palata lokola mondolu, se na makasi ma Mokonzi oyo bakotangaka Nzambe wa Israel. | |
Sira | LinVB | 47:20 | Obebisi lokumu la nkombo ya yo, osantoli libota lya yo tee Nzambe asiliki na bana ba yo, mpe apesi libota lya yo etumbu mpo ya bozoba bwa yo : | |
Sira | LinVB | 47:21 | bokonzi bwa yo bokabwani na biteni bibale, ekolo ya Efraim etomboki, eponi mokonzi mosusu. | |
Sira | LinVB | 47:22 | Kasi Mokonzi atiki koyokela bato ba ye ngolu te, mpe atiki kokokisa maloba ma ye manso te ; abomi bankoko ba moponomi wa ye te, mpe asilisi libota lya molingami wa ye te. Kasi atikeli libota lya Yakob ndambo ya bato, mpe atikeli Davidi moto moko wa libota lya ye. | |
Sira | LinVB | 47:23 | Salomo akei kokutana na bankoko ba ye, atiki nsima ya ye mwana moko wa libota lya ye ; moto aleki bato ba ekolo na bozoba, azalaki na mayele te, Roboam oyo abendaki bato o nzela ya batomboki. | |
Sira | LinVB | 47:24 | Yeroboam, mwana wa Nebat, alakisi ba-Israel nzela ya masumu, mpe ba-Efraim nzela ya mabe. Bato bakomi kosalaka masumu maleki, yango wana Nzambe babengani bango mosika na ekolo ya bango. | |
Chapter 48
Sira | LinVB | 48:1 | Na nsima profeta Elia abimi lokola móto, maloba ma ye mazalaki lokola esungi epeli móto. | |
Sira | LinVB | 48:2 | Ye moto abyangi nzala o ekolo ya Israel ; mpo ya mpiko ya ye o mosala abomi bato ebele. | |
Sira | LinVB | 48:4 | Solo, Elia, ozwi lokumu mingi na makamwisi ma yo ! Nani akoki komikumisa ’te akokani na yo ? | |
Sira | LinVB | 48:8 | Opakoli bakonzi mafuta mpo ’te babekola bato mabe ma bango, opakoli baprofeta mafuta mpo ’te bakitana yo. | |
Sira | LinVB | 48:9 | Otombwami o likolo o ntei ya mompepe mwa móto, bamemeki yo na likalo libendami na farasa ya móto. | |
Sira | LinVB | 48:10 | Nzambe aponi yo mpo ’te opalela bato bakoya nsima, okitisa bongo nkanda ya ye, engala te, mpe ozongisa bondeko kati ya batata na bana, bongo opesa lisusu mabota ma Yakob bokasi. | |
Sira | LinVB | 48:11 | Esengo na bato bakomono yo, mpe na baye bawei o bondeko bwa Nzambe, zambi biso mpe tokozwa bomoi bwa solo. | |
Sira | LinVB | 48:12 | Awa Elia alimwaki bongo o mompepe mwa móto, Elizeo atondaki na elimo wa ye. O bomoi bwa ye mobimba mokonzi moko abangisaki ye te, mpe moto moko te akokaki kotinda ye ata nini. | |
Sira | LinVB | 48:14 | Ntango azalaki na bomoi asali makamwisi, nsima ya liwa lya ye mpe misala mya ye mikamwisaki bato. | |
Sira | LinVB | 48:15 | Ata bongo, bato babongoli mitema te, baboyi masumu ma bango te, kina bakambami mosika na ekolo ya bango mpe bapanzani o nse mobimba. | |
Sira | LinVB | 48:16 | Etikali bongo se mwa ndambo ya bato, na moyangeli moko wa libota lya Davidi. O kati ya bango basusu basepelisi Nzambe, kasi basusu bakobi kosala masumu. | |
Sira | LinVB | 48:17 | Ezekia alendisi engumba ya ye, mpe abendi mai tee o kati ya bifelo bya yango. Na bibende atimoli nzela o kati ya mabanga mpe bitima mpo ya kobomba mai. | |
Sira | LinVB | 48:18 | O eleko ena Senakerib akei etumba mpe atindi ntoma wa ye, atomboli loboko mpo ya kosala Sion mabe, mpe afundi na lolendo la ye. | |
Sira | LinVB | 48:19 | Mitema mpe maboko ma bango makomi kolenge, bakomi na mpasi lokola mwasi alingi abota. | |
Sira | LinVB | 48:20 | Babeleli Nzambe Mokonzi wa ngolu, batomboli maboko epai ya ye. Ut’o likolo Mosantu andimeli bango noki mpenza, mpe abikisi bango na maboko ma Izaya. | |
Sira | LinVB | 48:22 | mpo Ezekia asalaki maye masepelisi Mokonzi, alongwi o nzela ya tata wa ye Davidi te, lokola profeta Izaya alakisaki ye, oyo azalaki moto monene mpe momoni makambo wa solo. | |
Sira | LinVB | 48:24 | Na mayele ma Nzambe amoni nsuka ya mokili mpe abondi mitema mya bato bazalaki na mpasi o Sion. | |
Chapter 49
Sira | LinVB | 49:1 | Kokanisa Yozia ezali elengi lokola nsolo ya malasi, maye molambimatiti alengelaki. Bato bakoyoka ye elengi lokola mafuta ma nzoi o monoko, mpe lokola miziki o ntango ya limpati liye bakomeleke vino. | |
Sira | LinVB | 49:2 | Alandi nzela ya bosembo mpe asali ’te bato ba ekolo ya ye babongola mitema, alongoli makambo ma nsomo ma bokumisi bikeko. | |
Sira | LinVB | 49:3 | Azalaki kotia motema se na Mokonzi, o ntango masumu mangali, abendi bato o nzela ya losambo. | |
Sira | LinVB | 49:4 | Tika se Davidi, Ezekia na Yozia, banso bakobi kosala masumu, mpo batikaki mibeko mya Nzambe wa likolo : bakonzi ba Yuda basilaki bongo. | |
Sira | LinVB | 49:5 | Bato basusu bakomi na bokonzi bwa bango, mpe bikolo bisusu bikomi na lokumu la bango. | |
Sira | LinVB | 49:6 | Banguna batumbi engumba esantu eye Nzambe aponi, bongo bato bazalaki wana lisusu te. | |
Sira | LinVB | 49:7 | Yeremia asakolaki yango, mpo banyokoloki ye. Ntango azalaki naino o libumu lya mama Nzambe aponi ye ’te abikola, aboma mpe abebisa, kasi atonga mpe alona lokola. | |
Sira | LinVB | 49:10 | Maye matali baprofeta basusu zomi na babale : minkuwa mya bango mizwa bomoi bwa sika o malita ma bango, zambi babondoki bana ba Yakob, babikisi bango mpe balendisi elikya ya bango. | |
Sira | LinVB | 49:11 | Toloba ndenge nini mpo ya kokumisa Zorobabel, moto azalaki lokola mompete mwa motuya o mosapi ? | |
Sira | LinVB | 49:12 | Toloba nini mpo ya Yozue, mwana wa Yosedek ? Bango bato batongi Tempelo lisusu, babongiseli Mokonzi esika esantu, eye ekozala na lokumu lonene seko. | |
Sira | LinVB | 49:13 | Nkombo ya Neemia mpe ezali na lokumu lonene : moto oyo abongisaki bifelo biye bikweyaki, abongisaki mpe bizibeli na bikangeli, mpe atongaki lisusu ndako ya biso iye ibukanaki. | |
Sira | LinVB | 49:15 | Moto moko lokola Yozefu azalaki mpe te, oyo ayangeli bandeko ba ye mpe abikisi ekolo ya ye. Balakisi ebembe ya ye lokumu lonene. | |
Chapter 50
Sira | LinVB | 50:1 | O eleko ya nganga mokonzi Simon, mwana wa Onia, babongisi Tempelo mpe balendisi ndako esantu. | |
Sira | LinVB | 50:2 | Asali ’te batia mabanga ma nse ma ndako ya mikili mibale, mpe mabanga manene ma lopango la Tempelo. | |
Sira | LinVB | 50:5 | Elongi ya ye ezalaki kongenge o kati ya bato ba ye ntango azalaki kobima o esika esantusantu. | |
Sira | LinVB | 50:6 | Azalaki lokola monzoto mwa ntongo o ntei ya mampata, lokola sanza ekongengeke o mikolo miye ezali mobimba, | |
Sira | LinVB | 50:7 | lokola mwese mokongengeleke Tempelo ya Nta Likolo, lokola monama mobimi o ntei ya mampata ma nkembo, | |
Sira | LinVB | 50:8 | lokola fulele ya roza o mikolo mya eyenga, lokola fulele ya lisi penepene na moluka, lokola etapi ya nzete ya mpaka o eleko ya sika, | |
Sira | LinVB | 50:9 | lokola mpaka ya malasi bakotumbaka ntango ya libonza, lokola mbeki etulami na wolo, ekembisami na mabanga ma motuya ndenge na ndenge ; | |
Sira | LinVB | 50:11 | Ntango alati molato mwa lokumu mpe amikembisi na bonzenga bonso, mpe abuti altare esantu, atondisi lopango la Tempelo na nkembo ya ye. | |
Sira | LinVB | 50:12 | Ntango bandeko ba ye banganga Nzambe bazingi ye, lokola sédere ya Libano, ye moto atelemi penepene na etumbelo ya altare mpe ayambi mabonza o maboko ma bango. Lokola nzete ya mbila | |
Sira | LinVB | 50:13 | bana banso ba Arone bazingi ye na nkembo enene ; na mabonza ma Mokonzi o maboko, batelemi o boso bwa bato banso ba Israel. | |
Sira | LinVB | 50:14 | Ntango Simon asilisi milulu mya losambo o altare, mpe abongiseli Nzambe wa bokasi bonso libonza, | |
Sira | LinVB | 50:15 | atandi loboko likolo lya nkeni enene, asopi mai ma mbuma ya vino o eteni ya nse ya altare : eyokisi nsolo mpimbo o miso ma Nzambe, Mokonzi wa molóngó mobimba. | |
Sira | LinVB | 50:16 | O ntango ena bana ba Arone bagangi mpe babeti mindule batuli na mbengi, bayokisi bongo lokito lonene mpo ’te Nzambe wa Nta Likolo akanisa bango. | |
Sira | LinVB | 50:17 | Na nsima bato banso lisanga bamibwaki bilongi o nse : bakumbameli Mokonzi wa bokasi bonso, Nzambe wa Nta Likolo. | |
Sira | LinVB | 50:19 | Bato banso babondeli Mokonzi wa likolo, basambeli Nzambe wa ngolu tee milulu mya Mokonzi mikomi na nsuka mpe basilisi losambo la bango. | |
Sira | LinVB | 50:20 | Na nsima atiki altare mpe akiti, atandeli lisanga mobimba lya Israel maboko mpo ’te apesa bobenisi bwa Mokonzi na mongongo makasi, mpe azwa lokumu la kosakola nkombo ya ye. | |
Sira | LinVB | 50:22 | Mpe sikawa bokumisa Nzambe wa likolo na nse, oyo akosalaka misala minene bipai binso : apesi biso lokumu banda libumu lya mama, mpe akolakisaka biso ngolu ya ye. | |
Sira | LinVB | 50:23 | Nzambe ayokisa mitema mya biso esengo, akabela bato ba lelo o Israel boboto, lokola o mikolo mya kala. | |
Sira | LinVB | 50:25 | Motema mwa ngai mokoyinaka bikolo bibale, mpe ekolo ya bisato ezali ekolo mpenza te : | |
Sira | LinVB | 50:27 | Mateya ma bwanya mpe ma mayele malamu makomami o buku eye na Yezu wa Yeruzalem, mwana wa Sira, nkoko wa Eleazar. Asopi bwanya bozalaki o motema mwa ye. | |
Sira | LinVB | 50:28 | Esengo na moto akozongelaka mateya mana, akokoma moto wa bwanya soko abombi mango o motema. | |
Chapter 51
Sira | LinVB | 51:1 | E Mokonzi, Nkumu monene, nalingi kokumisa yo, Nzambe, Mobikisi wa ngai. Nakotondo nkombo ya yo. | |
Sira | LinVB | 51:2 | Yo moto obateli ngai mpe osalisi ngai, obikisi nzoto ya ngai o likama lya liwa, mpe o motambo mwa bato ba songisongi, mpe ma bato ba lokuta. Osalisi ngai mpe obikisi ngai o maboko ma bato bafundi ngai, | |
Sira | LinVB | 51:3 | olakisi bonene bwa ngolu ya yo mpe nkembo ya nkombo ya yo, ntango bato basusu baswi ngai mino mpo balia ngai, basusu batomboli loboko mpo baboma ngai, mpe o ntango nayoki mpasi mpe minyoko ndenge na ndenge. | |
Sira | LinVB | 51:4 | Milinga mya móto milingaki kosilisa ngai mpema, nazalaki o ntei ya móto moye ngai napelisaki te. | |
Sira | LinVB | 51:6 | Batongi ngai na maloba ma lokuta epai ya mokonzi. Nakomaki penepene na liwa, nasilaki kokoma o monoko mwa mboka ya bawa. | |
Sira | LinVB | 51:7 | Bazingaki ngai bipai binso mpe moto moko asalisaki ngai te ; nalukaki lisalisi, kasi moto moko amononoki te. | |
Sira | LinVB | 51:8 | O ntango ena nakanisaki ngolu ya yo, Mokonzi, mpe bikela binene okolakisaka banda kala ; zambi okobikisaka bato bakotiaka elikya na yo, mpe okolongolaka bango o maboko ma banguna. | |
Sira | LinVB | 51:9 | Ut’o bozindo nayokisi bobeleli bwa ngai, mpe nabondeli mpo ’te babikisa ngai o liwa. | |
Sira | LinVB | 51:10 | Nabeleli Nzambe, Tata wa Mobikisi wa ngai : « Otika ngai te o mikolo mya mpasi, mpe o kati ya bato ba lolendo, ntango nazangaki lisalisi. Nakokumisa nkombo ya yo ntango inso, mpe nakoyembela yo nzembo ya botondi yo. » | |
Sira | LinVB | 51:13 | Ntango nazalaki elenge, liboso ’te nakende mobembo, nazalaki koluka bwanya o losambo la ngai. | |
Sira | LinVB | 51:14 | O boso bwa Tempelo nazalaki kosambela mpo nazwa bwango, mpe nakoluka kozala na bwanya tee liwa. | |
Sira | LinVB | 51:15 | Bwanya boyokisi ngai nsai mingi o motema, lokola fulele to mbuma ya vino eteli. Nazalaki kolanda nzela ya bosembo, ut’o bolenge nazalaki koluka bwanya. | |
Sira | LinVB | 51:18 | Nakani kolanda nzela ya bwanya, naluki kosala malamu, nakoyoka yango mawa mokolo moko te. | |
Sira | LinVB | 51:19 | Nabuni etumba mpo nakoma na bwanya mpe natosa Mobeko nye ; natomboli maboko epai ya likolo, mpe naleli mpo nabungaki makambo masusu ma bwanya. | |
Sira | LinVB | 51:20 | Natii motema na bwanya mpe nazwi, zambi naluki bwango na motema peto. Bwanya bolakisi ngai makambo mingi ut’o ebandela, yango wana bwanya bokoki kotika ngai mokolo moko te. | |
Sira | LinVB | 51:24 | Mpo nini bokolobaka ’te bwanya bwa bino bokoki te, awa mitema mya bino mizali koyoka bwango mposa ? | |
Sira | LinVB | 51:26 | Bokanga ekangiseli ya bwanya o nkingo ya bino, bongo bokotisa bwanya o mitema mya bino. Bwanya bozali se penepene, bokoki kozwa bwango. | |
Sira | LinVB | 51:27 | Bomono na miso : nasengelaki komiyokisa mpasi mingi te, mpe nakomi na ntango mingi ya bopemi. | |
Sira | LinVB | 51:28 | Ata bosengelaki kopesa mbongo mingi mpo ya kozwa mateya, na bwanya bokozwa wolo ebele. | |