Site uses cookies to provide basic functionality.

OK
Chapter 1
Psal LinVB 1:1  Esengo na moto akoyokanaka te na bato baboya Nzambe, oyo akolandaka nzela ya babebisi te mpe akofandaka te o ntei ya baye bapusi koseke bato banso ;
Psal LinVB 1:2  oyo andimi kotosa mobeko mwa Mokonzi, mpe akokanisaka mwango butu moi.
Psal LinVB 1:3  Azali lokola nzete elonami penepene na mai, eye ekobotaka mbuma o eleko ya mbula mpe ekosila nkasa mokolo moko te. Manso ye akosala makotambola se malamu !
Psal LinVB 1:4  Bato baboya Nzambe bazali bongo soki te ! Bazali lokola nkasa mpamba itombwami na mompepe.
Psal LinVB 1:5  Bakobika soki te o mokolo mwa likambo, bato babe bakosangana na basemba te.
Psal LinVB 1:6  Mokonzi ayebi nzela ya bato ba bosembo, kasi nsuka ya nzela ya baye baboya Nzambe, se liwa.
Chapter 2
Psal LinVB 2:1  Mpo nini bapagano bakolemwaka boye ? Mpo nini bato bakosilikaka ntina te ?
Psal LinVB 2:2  Bakonzi na bankumu ba nse batomboki, bakaneli Nzambe na mpe Mesiya wa ye.
Psal LinVB 2:3  Bazali koloba : « Tokata minyololo mya biso ! Tobwaka mikumba mya biso o nse ! »
Psal LinVB 2:4  Oyo afandi o likolo aseki yango, Nzambe akosukisa bango lokola lisano.
Psal LinVB 2:5  Akosilikela bango mpe bakoyoka nsomo, na nkanda enene akoloba na bango :
Psal LinVB 2:6  « Ngai moko naponoki moto oyo azala mokonzi o Sion, ngomba esantu ya ngai. »
Psal LinVB 2:7  Nakosakola maloba Nzambe ayebisaki ngai. Alobaki na ngai : « Ozali Mwana wa ngai, ngai mpenza naboti yo lelo !
Psal LinVB 2:8  Senge ngai mpe nakopesa yo bikolo binso, okokoma mokonzi wa nse mobimba.
Psal LinVB 2:9  Okoyangela bango na montongo mwa ebende, okobuka bango lokola mbeki ya mabelé. »
Psal LinVB 2:10  Bakonzi ba bikolo, boyoka malamu sikawa ! Bayangeli ba mokili, bozwa mayele !
Psal LinVB 2:12  Bokumisa ye na limemya linene, zambi soko asiliki, bino bosuki. Nkanda ya ye ezali ya mbalakaka. Esengo na baye bakotiaka mitema na ye.
Chapter 3
Psal LinVB 3:1  Nzembo ya Davidi o ntango akimi mwana wa ye Absalom (2 Sam 15,13-17).
Psal LinVB 3:2  Mokonzi, baye bakokanelaka ngai bazali mingi, baye bazali koluka ngai na makambo bazali ebele.
Psal LinVB 3:3  Bato mingi bazali kotongo ngai, balobi : « Nzambe wa ye akobikisa ye te ! »
Psal LinVB 3:4  Kasi yo Mokonzi, ozali nguba eye ekobatelaka ngai, yo lokumu la ngai, okopesa ngai mpiko.
Psal LinVB 3:5  Nabeleli Mokonzi na mongongo makasi, mpe ut’o ngomba ya ye esantu akondimela ngai.
Psal LinVB 3:6  Nakei kolala mpe mpongi ekangi ngai, nalamuki : Mokonzi azali kobatela ngai.
Psal LinVB 3:7  Ata bato ebele bazingi ngai, nabangi bango te.
Psal LinVB 3:8  E Mokonzi, teleme ! Yo Nzambe wa ngai, bikisa ngai ! Bete banguna ba ngai banso o litama, mpe buka bato baboya Nzambe mino.
Psal LinVB 3:9  Libiki liuti epai ya Mokonzi ! Yo moto okobenisaka bato ba ekolo ya yo !
Chapter 4
Psal LinVB 4:1  Ya kapita wa bayembi, na biyembeli bya nsinga. Nzembo ya Davidi.
Psal LinVB 4:2  Ondimela ngai, Mokonzi, ntango nazali kobelela yo, ozali Nzambe oyo akolongisa ngai ; o kati ya mpasi okobikisa ngai, yokela ngai mawa mpe ndima losambo la ngai.
Psal LinVB 4:3  Bino bato, mikolo boni bokosala motó makasi ? Mikolo boni bokolanda se makambo ma mpamba mpe bokowela kokosa bato na makambo ma lokuta ?
Psal LinVB 4:4  Boyeba ’te Mokonzi akosalisa ngai moto wa ye, soko nabeleli ye, akoyoka ngai !
Psal LinVB 4:5  Bobanga Nzambe mpe bokima masumu, bokanisa ye o ntango ya kimia ya butu.
Psal LinVB 4:6  Bobonzela Mokonzi mabonza mabongi na ye, mpe botia mitema na ye.
Psal LinVB 4:7  Bato baike bakomitunaka ’te : « Nani akopesa biso bolamu ? » E Mokonzi, lakisa biso elongi ya yo.
Psal LinVB 4:8  Otondisi motema mwa ngai na esengo enene, leka esengo ya bato bazwi mampa na vino ebele.
Psal LinVB 4:9  Nakolala na boboto mpe nakozwa mpongi noki, zambi se yo, Mokonzi, okobatelaka ngai.
Chapter 5
Psal LinVB 5:1  Ya kapita wa bayembi, na mpiololo. Nzembo ya Davidi.
Psal LinVB 5:2  E Mokonzi, tia matoi na maloba ma ngai, yoka boleli bwa ngai,
Psal LinVB 5:3  yoka ndenge nazali kobelela yo, e Mokonzi wa ngai mpe Nzambe wa ngai, nazali kobondela bobele yo.
Psal LinVB 5:4  E Mokonzi, ut’o ntongo okoyokaka lolaka la ngai, na ntongo nakomibonzaka na yo : nakotiaka motema se na yo.
Psal LinVB 5:5  Yo Nzambe okosepelaka na masumu ma bato te, mpe okoyambaka bato babe epai ya yo te.
Psal LinVB 5:6  Bato ba lolendo bakoki kobika o miso ma yo te ; okoyinaka bato banso bakosalaka mabe.
Psal LinVB 5:7  Okosilisaka bato bakobukaka lokuta ; Mokonzi akoyinaka babomi na baye bakokosaka baninga.
Psal LinVB 5:8  Kasi, mpo ya bolingi bwa yo bonene, ngai nakoki koyingela o ndako ya yo, kokumbama o boso bwa Tempelo ya yo esantu, mpe kokumbamela yo.
Psal LinVB 5:9  E Mokonzi, kamba ngai na bosembo bwa yo, ata banguna bazali kokanela ngai ; bongisela ngai nzela ya yo naleka.
Psal LinVB 5:10  O minoko mya bango liloba lya bosolo lizali te, o mitema bakani se kobebisa ; mingongo mya bango mizali lokola lilita polele, mpe minoko mya bango mitondi na maloba ma boleti.
Psal LinVB 5:11  E Nzambe, tumbola bango, mikano mya bango mikweisa bango. Bengana bango, zambi masumu ma bango maleki mingi, mpo batombokeli yo.
Psal LinVB 5:12  Baye banso baluki libiki epai ya yo basepela, bayoka nsai ntango inso, mpo okobatelaka bango, baye balingi nkombo ya yo baganga na esengo.
Psal LinVB 5:13  Yo Mokonzi, okobenisaka moto wa bosembo, bolingi bwa yo bokobatelaka ye lokola nguba.
Chapter 6
Psal LinVB 6:1  Ya kapita wa bayembi, na biyembeli bya nsinga mwambe. Nzembo ya Davidi.
Psal LinVB 6:2  E Mokonzi, palela ngai, kasi na nkanda te, bongisa ngai, kasi osilikela ngai te.
Psal LinVB 6:3  Yokela ngai mawa, Mokonzi, nazali makasi te, bikisa ngai, mpo nzoto mobimba elembi.
Psal LinVB 6:4  Motema mwa ngai mobulungani, Mokonzi, okoya kotala ngai ntango nini ?
Psal LinVB 6:5  Yaka, Mokonzi, mpe batela molimo mwa ngai, yo ozali motema bolingi, bikisa ngai.
Psal LinVB 6:6  Zambi nsima ya liwa moto akokanisa yo lisusu te, o mboka ya bawa nani akokumisa yo ?
Psal LinVB 6:7  Nalembi na boleli mikolo minso na butu, mbeto ya ngai epoli na mai ma miso.
Psal LinVB 6:8  Ya solo, miso ma ngai mateli mpo ya kolela, banyokoli balandi ngai tee nakomi mobange.
Psal LinVB 6:9  Bato babe banso balongwa, batika ngai, zambi Mokonzi akoyoka boleli bwa ngai.
Psal LinVB 6:10  Mokonzi akoyoka mabondeli ma ngai, mpe akondima losambo la ngai.
Psal LinVB 6:11  Banguna ba ngai banso bakima noki, banso bayoka nsoni na mbala yoko.
Chapter 7
Psal LinVB 7:1  Maloba ma Davidi. Ayembi nzembo eye mpo ya Kus, moto wa Benyamin (2 Sam 18,21-32).
Psal LinVB 7:2  E Mokonzi Nzambe wa ngai, yo ebombamelo ya ngai, bikisa ngai o maboko ma banguna banso, longisa ngai.
Psal LinVB 7:3  Baboma ngai te lokola nkosi ekobomaka nyama, bakanga ngai te, mpo nazali na mosalisi moko te.
Psal LinVB 7:4  E Mokonzi Nzambe wa ngai, soko nazali na likambo, mpe soko nayibaki na maboko ma ngai,
Psal LinVB 7:5  soko nazongisaki mabe na moto oyo asali ngai malamu, soko natikaki monyokoli akima,
Psal LinVB 7:6  monguna alanda ngai mpo akanga ngai, abwaka ngai o nse mpe anyata ngai mpe abebisa lokumu la ngai nye.
Psal LinVB 7:7  E Mokonzi, teleme na nkanda ya yo, sukisa bokasi bwa banguna ba ngai, zala penepene na ngai, yo Nkolo wa mibeko.
Psal LinVB 7:8  Bato ebele bazali kozinga yo, kuna o likolo ozala mokonzi wa bango !
Psal LinVB 7:9  E Nzambe, ozali zuzi wa bikolo binso, sambisa ngai, e Mokonzi, tala bosembo bwa ngai, oyebi ’te nazali na likambo lyoko te.
Psal LinVB 7:10  Sukisa mayele mabe ma basumuki, mpe lendisa bato ba bosembo, zambi yo Nzambe wa bosembo, oyebi bato banso kin’o kati ya mitema.
Psal LinVB 7:11  Nzambe azali nguba eye ekobatelaka ngai, ye mobikisi wa bato bazali na motema bosembo.
Psal LinVB 7:12  Nzambe akokataka makambo na bosembo, ye Nzambe akoki kotumbola bato ntango inso.
Psal LinVB 7:13  Soko moto akobongola motema te, akopelisa nkanda ya ye, akobenda nsinga ya litimbo mpo ya kobete,
Psal LinVB 7:14  akoluka bibuneli mpo ’te aboma ye, akobetele ye makula ma móto.
Psal LinVB 7:15  Moto atondi na mikano mya kosala mabe, ye moko akomilukela makambo ma mpasi.
Psal LinVB 7:16  Soko atimoli libulu lya bozindo, ye moko akokweya o libulu atimoli.
Psal LinVB 7:17  Mabe ma ye makozongela ye moko, nkanda ya ye ekokitela ye o motó.
Psal LinVB 7:18  Nakotondo Mokonzi mpo ya bosembo bwa ye, nakoyembela nkombo ya Nzambe wa nta likolo.
Chapter 8
Psal LinVB 8:1  Ya kapita wa bayembi, na eyembeli ya mboka Gat. Nzembo ya Davidi.
Psal LinVB 8:2  E Nzambe Mokonzi wa biso, nkombo ya yo eyebani o nse mobimba ; nkembo ya yo ekomi kin’o likolo mosika.
Psal LinVB 8:3  Nzembo eye bilenge na bana bake bakoyembelaka yo ekotela banguna o mitema, eyokisa nsoni na banguna mpe na baye batombokeli yo.
Psal LinVB 8:4  Soko natali likolo, mosala mwa maboko ma yo, sanza na mpe minzoto yo otiaka kuna,
Psal LinVB 8:5  moto nde eloko nini ’te okanisaka ye ? Mwana wa Adamu nde nani ’te obatelaka ye ?
Psal LinVB 8:6  Otondisi ye na nkembo mpe na lokumu, banzelu baleki ye se mwa moke.
Psal LinVB 8:7  Otii ye mokonzi wa bikelamo bya yo, otii binso o nse ya makolo ma ye :
Psal LinVB 8:8  mpata na ngombe inso, ná nyama ya zamba lokola,
Psal LinVB 8:9  ná ndeke ya likolo ná mbisi ya mai, ná binso bikozalaka o kati ya mbu.
Psal LinVB 8:10  E Nzambe Mokonzi wa biso, nkombo ya yo enene eyebani o nse mobimba !
Chapter 9
Psal LinVB 9:1  Ya kapita wa bayembi, na eyembeli ya nzenze. Nzembo ya Davidi.
Psal LinVB 9:2  E Mokonzi, nalingi kotondo yo na motema monso, násakola makamwa ma yo manso.
Psal LinVB 9:3  Náyoka esengo mpe násepela yo, náyembela nkombo ya Nzambe wa likolo.
Psal LinVB 9:4  Banguna ba ngai bazongi nsima, batuti libaku mpe basili o miso ma yo.
Psal LinVB 9:5  Ofandaki o ngwende ya yo lokola zuzi wa bosembo ntango osambisaki mpe olongisaki ngai.
Psal LinVB 9:6  Onyati bikolo mpe olimwisi bato babe, olongoli nkombo ya bango seko.
Psal LinVB 9:7  Banguna basili, bakufi libela, obomi mboka ya bango, nkombo ya bango ebungi.
Psal LinVB 9:8  Se bongo Mokonzi akoyangelaka seko, abongisi ngwende ya ye mpo ’te asambisa bato.
Psal LinVB 9:9  Ye akosambisaka mokili na bosembo, akokataka makambo ma bato bo ebongi.
Psal LinVB 9:10  Mokonzi azala ebombamelo ya bato banyokwami, o ntango ya mpasi bazwa libiki epai ya ye.
Psal LinVB 9:11  Baye bayebi nkombo ya yo bakotiaka elikya na yo, zambi baye baluki yo, Mokonzi, okotika bango te.
Psal LinVB 9:12  Boyembela Mokonzi, oyo akofandaka o Sion, bosakola bikela bya ye binene o bikolo binso.
Psal LinVB 9:13  Oyo akobekolaka mobomi wa bato ba ye akobosana boleli bwa bato ba mpasi te.
Psal LinVB 9:14  E Mokonzi, yokela ngai mawa, tala boniboni banguna basambwisi ngai, obikisa ngai o mboka ya bawa.
Psal LinVB 9:15  Bongo násakola bikela bya yo bya nkembo, násepela o Sion, mpo opesi ngai libiki.
Psal LinVB 9:16  Bapagano bakwei o libulu liye bango moko batimolaki, makolo ma bango makangemi o motambo batiaki na bobombami.
Psal LinVB 9:17  Mokonzi amilakisi mpe akati likambo seko, akangi moto mabe o motambo ye moko atiaki.
Psal LinVB 9:18  Basumuki bazonga o mboka ya bawa, elongo na baye banso batia Nzambe mpembeni.
Psal LinVB 9:19  Mokonzi akobosana mobola mokolo moko te, mpe elikya ya bato ba bosawa ezali na nsuka te.
Psal LinVB 9:20  E Mokonzi, teleme ! Moto alonga yo te ! Bapagano basambama o miso ma yo !
Psal LinVB 9:21  E Mokonzi, oyokisa bango nsomo, bayeba bongo ’te bazali se bato !
Chapter 10
Psal LinVB 10:1  E Mokonzi, mpo nini okotikalaka mosika ? Mpo nini obombami o ntango ya mpasi ?
Psal LinVB 10:2  Moto wa lofundo oyo akonyokoloko mobola ákangema o mitambo ye moko atiaki.
Psal LinVB 10:3  Moto aboya Nzambe akomikumisaka ’te azwi eloko alukaki, moto wa boluli akosekeke mpe akokinolaka Mokonzi.
Psal LinVB 10:4  Na lolendo la ye moto oyo akanisi etumbu te, amilobeli : « Nzambe azali te. »
Psal LinVB 10:5  Misala mya ye minso mikotambolaka malamu, yango wana akokinolaka yo, zuzi wa ye, mpe akomonelaka bato basusu banso.
Psal LinVB 10:6  O kati ya motema alobi : « Nakoki kokweya te, moto lokola ngai akoyoka mpasi mokolo moko te. »
Psal LinVB 10:7  Monoko mwa ye motondi na maloba ma mobondo, ma bokosi mpe ma lokuta, lolemu la ye lokobombaka bobe na masumu.
Psal LinVB 10:8  Penepene na lopango akobembeke, mpo ya koboma basemba na bonkutu. Miso ma ye se epai ya bato ba mawa.
Psal LinVB 10:9  Akomibombaka lokola nkosi o kati ya matiti : anongi moto wa mawa mpo ya kokanga ye, akokanga ye mpe akobenda ye o monyama mwa ye.
Psal LinVB 10:10  Akumbami mpe amilengeli malamu mpo akwela moto wa mawa o nzoto.
Psal LinVB 10:11  O kati ya motema alobi : « Nzambe abosani, amilakisi te, amoni yango te. »
Psal LinVB 10:12  E Mokonzi teleme ! E Nzambe tombola loboko, obosana bato ba mawa te !
Psal LinVB 10:13  Mpo nini mosumuki akokinolaka Nzambe na bolobi : « Nzambe akopesa etumbu te » ?
Psal LinVB 10:14  Nzokande, yo omoni mawa mpe mpasi ya bato, mpe okoluka nzela ya kosalisa ye. Moto motau akomitikaka o maboko ma yo, mpe yo okosalisaka mwana etike.
Psal LinVB 10:15  Silisa bokasi bwa moto azangi bosembo, mabe ma ye mamonono lisusu te.
Psal LinVB 10:16  Nzambe azali Mokonzi o bileko binso seko, bapagano balimwi o mokili mwa ye.
Psal LinVB 10:17  E Mokonzi, okondimaka mabondeli ma bato bake, okolendisaka bango mitema, okotandelaka bango matoi.
Psal LinVB 10:18  Okolongisaka mwana etike mpe moto anyokwami, moto, eloko euti o mabelé, ányokolo moninga lisusu te !
Chapter 11
Psal LinVB 11:1  Ya kapita wa bayembi. Nzembo ya Davidi. Mokonzi azali ebombamelo ya ngai. Bongo ndenge nini bokoki koloba na ngai : « Yo ndeke eke, kima o ngomba ya yo.
Psal LinVB 11:2  Tala bato babe babongisi litimbo, mpe batii makula ma bango o nsinga mpo ya kobetele bato ba motema semba o molili.
Psal LinVB 11:3  Soko ndako ebebi nye, moto semba akoki kosala nini ? »
Psal LinVB 11:4  Mokonzi azali o ndako ya ye esantu, Mokonzi atii ngwende ya ye o likolo ; miso ma ye makomonoko mitema mya bato.
Psal LinVB 11:5  Mokonzi akondimaka moto semba, kasi akoyinaka moto mabe alingi se bitumba.
Psal LinVB 11:6  Akonokisela bato babe mbula ya móto mpe akotinda mompepe mwa móto mpo ya kozikisa bango.
Psal LinVB 11:7  Mokonzi azali na bosembo, alingi misala mya bosembo, bato balingi bosolo bakomono elongi ya ye.
Chapter 12
Psal LinVB 12:1  Ya kapita wa bayembi, na biyembeli bya nsinga mwambe. Nzembo ya Davidi.
Psal LinVB 12:2  E Mokonzi, bikisa biso ! Bato bayambi yo basila, bato ba bosembo bazali lisusu te.
Psal LinVB 12:3  Mosala mwa bato, kokosa baninga, monoko sukali, kasi bazali na mitema mibale.
Psal LinVB 12:4  Mokonzi akangisa monoko mwa bakosi, akata lolemu la bato bakolobaka na lolendo.
Psal LinVB 12:5  Bakolobaka : « Tokobika mpo ya maloba ma biso, mbebu ikosalisa biso, nani akokoka biso ? »
Psal LinVB 12:6  Mpo ya babola banyokwami mpe baleli, Mokonzi alobi : « Ngai oyo, natelemi ! Nakobikisa baye bazali na mposa ya libiki. »
Psal LinVB 12:7  Maloba ma Mokonzi mazali maloba ma bosolo, lokola palata ebimi o mabelé eye bapetoli mbala nsambo.
Psal LinVB 12:8  Yo Mokonzi, okopanganaka na biso, obikisa biso o maboko ma bato baye,
Psal LinVB 12:9  ata bato babe bakolandaka nzela ya bango, mpe mobulu mokomi kotonda o mokili.
Chapter 13
Psal LinVB 13:2  Mokonzi, kin’o mokolo nini okobosana ngai ? Kin’o mokolo nini okobombela ngai elongi ya yo ?
Psal LinVB 13:3  Kin’o mokolo nini mpasi ekoswa ngai o motema mpe nakoyoka se mawa butu moi ? Kin’o mokolo nini monguna akolonga ngai ?
Psal LinVB 13:4  Mokonzi Nzambe wa ngai, tala mpe yanola ngai ! Námono mwinda mwa yo na miso mpo ’te nalala mpongi ya liwa te.
Psal LinVB 13:5  Monguna aloba te ’te : « Ngai nalongi ye » ; banyokoli baseke ngai te mpo naselumwi.
Psal LinVB 13:6  E Nzambe, natii motema na bolingi bwa yo. Nasepela awa nazwi libiki epai ya yo. Nayembela Mokonzi nzembo mpo ya malamu manso asali ngai.
Chapter 14
Psal LinVB 14:1  Ya kapita wa bayembi. Nzembo ya Davidi. Elema akomilobelaka : « Nzambe azali te ! » Misala mya ye mileki mabe na nsomo, ata moto moko wa bosembo azali lisusu te.
Psal LinVB 14:2  Ut’o likolo Mokonzi akotalaka bato mpo amono moto moko wa mayele, oyo aluki Nzambe naino.
Psal LinVB 14:3  Banso babunga nzela, babeba nye ; ata moto moko wa bosembo azali lisusu te.
Psal LinVB 14:4  Bango banso bayebi te ’te bakosalaka mabe ? Bakosilisaka bato ba ngai lokola bakoliaka mampa, bayebi Mokonzi lisusu te.
Psal LinVB 14:5  Kasi bakolenge na nsomo, mpo Nzambe alingi bato ba bosembo.
Psal LinVB 14:6  Ata bozali koseke mikano mya mobola, Mokonzi azali mobateli wa ye.
Psal LinVB 14:7  Nani akopesa Israel libiki ut’o Sion ? Mokolo Mokonzi akolongola bato ba ye o boombo, Yakob akoyoka esengo mpe Israel akosepela !
Chapter 15
Psal LinVB 15:1  Nzembo ya Davidi. E Mokonzi, nani akoki kofanda o ema ya yo ? Nani akoki kozala o ngomba ya yo esantu ?
Psal LinVB 15:2  Bobele moto wa ezalela elamu mpe wa bosembo, oyo akolobaka makambo ma solo mauti o motema mwa ye,
Psal LinVB 15:3  oyo ayebi kokanga monoko mpe asali bato mabe te, oyo asambwisi baninga te,
Psal LinVB 15:4  oyo akinoli moto wa nkanza, kasi akumisi baye bakobangaka Nzambe ; oyo awangani ndai ya ye te, ata ndai ena ekoyela ye mpasi,
Psal LinVB 15:5  oyo adefisi mosolo na elikya ya litomba te, mpe ayambi libonza te mpo ya kokitisa mobola. Moto akosalaka bongo, akokweya mokolo moko te.
Chapter 16
Psal LinVB 16:1  Losambo la Davidi. E Nzambe, batela ngai, mpo namibombi epai ya yo.
Psal LinVB 16:2  Nalobi na Nzambe : « Mokonzi wa ngai, bobele yo ! Bolamu bwa ngai, se yo ! »
Psal LinVB 16:3  Bato bakokumisaka bikeko bya nse eye, kasi ngai nasepeli na byango te.
Psal LinVB 16:4  Mpasi mingi ekokwela bato balingi kolanda byango. Ngai nakobomela byango nyama te mpe nakotanga nkombo ya byango na monoko te.
Psal LinVB 16:5  E Mokonzi, yo lisango mpe bomengo bwa ngai, libiki lya ngai lizali o maboko ma yo.
Psal LinVB 16:6  Okateli ngai lopango, oponi esika kitoko, lisango lya ngai lipusi bonzenga.
Psal LinVB 16:7  Nakokumisaka Mokonzi, oyo akopesaka ngai malako, ata na butu motema mokokebisaka ngai.
Psal LinVB 16:8  Ntango inso nakotalaka Mokonzi na miso, soko asimbi ngai na loboko, nakokweya te.
Psal LinVB 16:9  Yango wana nayoki esengo, motema mosepeli, ata nzoto ekozala na boboto,
Psal LinVB 16:10  mpo okondima te ’te nasuka o mboka ya bawa, okolinga mpe mondimi wa yo akita o lilita te.
Psal LinVB 16:11  Okolakisa ngai nzela ya bomoi bwa solo, okotondisa ngai na nsai enene o miso ma yo pene na yo okoyokisa ngai esengo seko.
Chapter 17
Psal LinVB 17:1  Losambo la Davidi. E Mokonzi, yoka bobeleli bwa ngai, tia matoi na boleli mpe na losambo la ngai, mpo monoko mwa ngai mozali na lokuta te.
Psal LinVB 17:2  Bobele yo okoki kokata likambo lya ngai malamu, yo okotalaka makambo na miso ma bosembo.
Psal LinVB 17:3  Otali ngai tee o kati ya motema, na butu oyei komeka ngai, kasi ozwi ngai na makanisi mabe te, nalobaki mabe moko te,
Psal LinVB 17:4  lokola bato bakosalaka ; nalandaki se nzela ya yo.
Psal LinVB 17:5  Nalandi se nzela eye olakisi ngai, bongo makolo ma ngai matuti libaku te.
Psal LinVB 17:6  Nabeleli yo, e Nzambe, ondimeli ngai, tandela ngai matoi mpe yoka maloba ma ngai.
Psal LinVB 17:7  Yo mobikisi wa baye bakimi banguna mpe bamibombi pene na yo, lakisa makamwa ma bolamu bwa yo.
Psal LinVB 17:8  Batela ngai lokola bakobatelaka mwana wa liso, bomba ngai o nse ya mapapu ma yo.
Psal LinVB 17:9  Nazala mosika na bato ba makambo makasi makasi, mosika na banguna bazingi ngai ntango inso.
Psal LinVB 17:10  Bango bazali motema libanga, bakolobaka se maloba ma lofundo.
Psal LinVB 17:11  Bakengi ngai, mpe na mbalakaka bazingi ngai, batali boniboni bakoki kokweisa ngai.
Psal LinVB 17:12  Bazali lokola nkosi elingi koboma nyama, lokola mwana wa nkosi abombami o matiti.
Psal LinVB 17:13  Teleme Mokonzi, kende kobunisa bango, kweisa bango ! Na mompanga mwa yo bikisa ngai o maboko ma banguna.
Psal LinVB 17:14  Na loboko la yo, Mokonzi, bengana bango o mokili, longola bango o ntei ya bato, balimwa o nse ! Otondisi bango libumu na biloko, bana ba bango mpe batondi, mpe bankoko ba bango bakozwa naino biloko bitikali.
Psal LinVB 17:15  Na bosembo bonso, námono elongi ya yo. Ntango nakolamuka, násepela kotala yo.
Chapter 18
Psal LinVB 18:1  Ya kapita wa bayembi. Ya Davidi, mosaleli wa Mokonzi. Ayembeli Mokonzi nzembo eye o mokolo Nzambe abikisi ye o maboko ma banguna ba ye banso mpe ma Saul (2 Sam 22).
Psal LinVB 18:2  Alobi boye : Nalingi yo, Mokonzi, yo bokasi bwa ngai,
Psal LinVB 18:3  Mokonzi akobatelaka ngai, ye ebombamelo ya ngai, Mobikisi wa ngai, Nzambe wa ngai. Ye libanga lya ngai, namibombi epai ya ye, ye nguba ya ngai, ebombamelo, bokasi mpe libiki.
Psal LinVB 18:4  Bakumisa ye ! Nabeleli Mokonzi mpe nabiki o maboko ma banguna.
Psal LinVB 18:5  Minyama mya liwa mikangi ngai, mai bozindo mayokisi ngai nsomo.
Psal LinVB 18:6  Minyama mya mboka ya bawa mikangi ngai, batieli ngai mitambo mya liwa.
Psal LinVB 18:7  Ntango nayoki nsomo nabeleli Mokonzi mpe nabengi Nzambe wa ngai. Ut’o Tempelo ya ye ayoki lolaka la ngai, boleli bwa ngai bokomi tee o matoi ma ye.
Psal LinVB 18:8  Mokili mobulungani mpe moningani, ngomba ilengi mpe ibukani mpo ya nkanda ya ye.
Psal LinVB 18:9  Zolo ya ye ebimisi milinga, monoko mwa ye mobimisi móto mokosilisa binso, mopelisi makala ma móto.
Psal LinVB 18:10  Akitisi likolo mpe ye moko akiti, atamboli likolo lya mampata maindo.
Psal LinVB 18:11  Abuteli kerubim mpe apimbwi, akatisi likolo na mapapu ma mompepe.
Psal LinVB 18:12  Amilatisi molili lokola elamba, amikangi na mampata maindo ebele.
Psal LinVB 18:13  Mwinda mongengi liboso lya ye, ut’o mampata anokisi mbula ya matandala mpe ya makala ma móto.
Psal LinVB 18:14  Ut’o likolo Mokonzi abetisi nkake, ayokisi lolaka la ye.
Psal LinVB 18:15  Abeteli banguna makula ma ye mpe akimisi bango, minkalali mya ye mipanzi bango.
Psal LinVB 18:16  Nse ya mai ma mbu ekomi komonono, makonzi ma mokili makomi polele mpo ya nkanda ya yo, Mokonzi, mpe mpema ya zolo ya yo.
Psal LinVB 18:17  Ut’o likolo atandi loboko mpe asimbi ngai, abendi ngai ut’o bozindo bwa mai manene.
Psal LinVB 18:18  Abikisi ngai o maboko ma monguna makasi, o maboko ma banyokoli baleki ngai na nguya.
Psal LinVB 18:19  O mokolo nalembi, babimeli ngai, kasi Mokonzi ayei kosalisa ngai.
Psal LinVB 18:20  Abimisi ngai wana mpe alendisi ngai, abikisi ngai mpo ya bolingi bwa ye bonene.
Psal LinVB 18:21  Mokonzi asali na ngai engebene na bosembo bwa ngai, asalisi ngai zambi nazalaki na maboko peto,
Psal LinVB 18:22  mpo nalandaki nzela ya Mokonzi, naboyaki monoko mwa Nzambe wa ngai te.
Psal LinVB 18:23  Nazalaki kotosa mibeko mya ye minso, mpe natiki nzela ya mitindo mya ye te.
Psal LinVB 18:24  O miso ma ye nazali na likambo lyoko te mpe namibateli mpo ’te nasala masumu te.
Psal LinVB 18:25  Mokonzi asali na ngai engebene na bosembo bwa ngai, mpo amoni ’te nazalaki na maboko peto.
Psal LinVB 18:26  Okolakisaka boboto na moto atosi bondeko bwa yo, mpe bolamu bwa yo na moto abongi nye.
Psal LinVB 18:27  Okomilakisaka peto na moto wa bopeto, kasi ozali na bokebi na moto alingi kokosa.
Psal LinVB 18:28  Okobikisaka bato banyokwami, kasi okokitisaka mitó mya bato ba lofundo.
Psal LinVB 18:29  Yo, Mokonzi, ozali mwinda mwa ngai, Nzambe wa ngai, tanisa molili moyeli ngai.
Psal LinVB 18:30  Na bokasi bwa yo nabuki lopango la banguna, na bokasi bwa Nzambe wa ngai napimbwi likolo lya efelo.
Psal LinVB 18:31  Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bosembo, liloba lya Mokonzi lizali liloba lya bosolo, ye nguba ekobatelaka bato banso bakoluka libiki epai ya ye.
Psal LinVB 18:32  Nani azali Nzambe, bobele Mokonzi te ? Nani azali libanga, bobele Nzambe wa biso te ?
Psal LinVB 18:33  Ye Nzambe oyo akopesaka ngai nguya, mpe akosembolaka nzela ya ngai.
Psal LinVB 18:34  Akokomisaka ngai mbangu lokola mboloko mpe akotelemisaka ngai ngbi o nsonge ya ngomba.
Psal LinVB 18:35  Akolendisaka ngai mpo ya etumba, mpe maboko ma ngai mpo ya kobenda litimbo lya mbengi.
Psal LinVB 18:36  Ozali nguba mpe lisalisi lya ngai, na loboko la yo okolendisaka ngai, okondimelaka ngai na bolamu bonso.
Psal LinVB 18:37  Okobongiselaka ngai nzela, mpo makolo ma ngai matuta libaku te.
Psal LinVB 18:38  Nalandi banguna mpe nazwi bango. Nakozonga bobele soko nasilisi bango.
Psal LinVB 18:39  Nabeti bango, bakoki koteleme lisusu te, bakwei o nse ya makolo ma ngai.
Psal LinVB 18:40  Opesi ngai nguya o etumba, okitisi o boso bwa ngai baye bayei kobunisa ngai.
Psal LinVB 18:41  Okimisi banguna o miso ma ngai, mpe nasilisi baye bayinaki ngai.
Psal LinVB 18:42  Bagangi, kasi moto moko abikisi bango te, babeleli Mokonzi, kasi ayanoli te.
Psal LinVB 18:43  Naniki bango lokola mputulu epimbwi na mompepe, nanyati bango lokola potopoto ya balabala.
Psal LinVB 18:44  Obikisi ngai o maboko ma bato ba ekolo ya ngai batomboki, otii ngai mokonzi wa bikolo. Bato nayebaki liboso te, bakomi kosalela ngai ;
Psal LinVB 18:45  bampaya baluki kosepelisa ngai, batosi ngai noki mpenza ;
Psal LinVB 18:46  bana ba bikolo bisusu balembi, balengi mpe bakimi ebombamelo ya bango.
Psal LinVB 18:47  Mokonzi azala seko ! Ye libanga lya ngai ! Bakumisa Nzambe mobikisi wa ngai.
Psal LinVB 18:48  Ye Nzambe apesi ngai makasi ma kolonga banguna, akomisi bato ba bikolo bisusu basaleli ba ngai.
Psal LinVB 18:49  Obikisi ngai o nkanda ya banguna, osali ’te nalonga baye bayeli ngai etumba, mpe obikisi ngai o maboko ma banyokoli.
Psal LinVB 18:50  Yango wana nalingi kokumisa yo, Mokonzi, o bikolo binso, mpe koyembela nkombo ya yo nzembo :
Psal LinVB 18:51  « Alongisi mokonzi wa ye o bitumba biike, alakisi moponomi wa ye bolingi, mpe asalisi Davidi na libota lya ye seko. »
Chapter 19
Psal LinVB 19:2  Likolo likosakolaka nkembo ya Nzambe, mpe etando ya likolo ekolakisaka mosala mwa maboko ma ye.
Psal LinVB 19:3  Moi mokosangelaka moi nsango ya ye mpe butu bokoyebisaka nsango na butu.
Psal LinVB 19:4  Ata bikosololaka te, ata bikolobaka te, ata lolaka loko lokoyokanaka te,
Psal LinVB 19:5  nsango ekotambolaka o nse mobimba, maloba ma bango makoyokanaka tee nsuka ya mokili. Nzambe atongeli mwese ema kuna o likolo :
Psal LinVB 19:6  mwese mokobimaka lokola mobali oyo abali sika akobimaka o ndako, lokola elombe alingi kokoba nzela ya ye.
Psal LinVB 19:7  Mokobimaka epai etando ya likolo ebandi mpe mokotambolaka kin’o nsuka ya mokili, mokoyokisaka bikelamo binso molunge.
Psal LinVB 19:8  Mobeko mwa mokonzi mobongi nye, mokopesaka bato bomoi, maloba ma Mokonzi mazali maloba ma bosolo, makopesaka moto wa bosawa bwanya.
Psal LinVB 19:9  Mitindo mya Nzambe mizali semba, mikoyokisaka mitema esengo, bitinda bya Mokonzi bizali polele, bikopesaka miso mwinda.
Psal LinVB 19:10  Kobanga Nzambe eleki malamu, sikawa mpe o bileko binso, Mokonzi akokataka makambo bobele na bosolo, mikolo minso se na bosembo.
Psal LinVB 19:11  Maloba ma ye mazali na motuya, leka wolo kitoko mpenza, mazali elengi mingi, leka mafuta ma nzoi elengi.
Psal LinVB 19:12  Mosaleli wa yo akotia motema na mango, mpo kotosa mango ezali na litomba linene.
Psal LinVB 19:13  Solo, nani ayebi mabe ma ye moko ? Limbisa ngai mabe maye nayebi te.
Psal LinVB 19:14  Batela mosaleli wa yo akoma na lolendo te, lolendo lobebisa motema mwa ye te ! Nakoka bongo kotikala motema peto mpe kokima lisumu linene.
Psal LinVB 19:15  E Mokonzi, Yo libanga mpe mosikoli wa ngai, maloba maye makobima o monoko mwa ngai mpe maye nakomanyolaka o motema mwa ngai, makoka kosepelisa Yo !
Chapter 20
Psal LinVB 20:2  Mokonzi andimela yo o mokolo mwa mpasi, nkombo ya Nzambe wa Yakob ebatela yo.
Psal LinVB 20:3  Ut’o ndako ya ye esantu atindela yo lisalisi, mpe ut’o ngomba Sion alendisa yo.
Psal LinVB 20:4  Akundola o motema mabonza ma yo manso, andima na bolamu miboma otumbeli ye.
Psal LinVB 20:5  Akabela yo maye motema mwa yo molingi, mpe akokisa mikano mya yo minso.
Psal LinVB 20:6  Bongo tosepela lilonga lya yo, mpe totombola bendele ya mboka ya biso mpo ya Nzambe wa biso. Ye akokokisaka manso okosenge ye !
Psal LinVB 20:7  Sikawa nayebi ’te Nzambe akolongisaka moponomi wa ye ; ut’o esika ya ye esantu o likolo akoyanola ye, mpe na makamwa ma loboko la ye akobikisa ye.
Psal LinVB 20:8  Basusu bakotiaka elikya na makalo, basusu na farasa, biso tokobondelaka se nkombo ya Mokonzi Nzambe wa biso.
Psal LinVB 20:9  Bango bakolembe mpe bakokweya, kasi biso tokoteleme mpe tokopika mpende.
Psal LinVB 20:10  E Nzambe, longisa mokonzi wa biso ! Oyanola biso mokolo tokobondela yo.
Chapter 21
Psal LinVB 21:2  E Nzambe, mokonzi asepeli nguya ya yo, atondi na esengo awa alongi etumba.
Psal LinVB 21:3  Okokisi maye motema mwa ye molingaki, oboyi mabondeli ma monoko mwa ye te.
Psal LinVB 21:4  Osalisi ye na makabo ma yo manene, olatisi ye enkoti ya wolo o motó.
Psal LinVB 21:5  Asengi yo oumisa bomoi bwa ye, ondimeli ye, opesi ye mikolo mingi, ebele mpenza.
Psal LinVB 21:6  Azwi nkembo enene, mpo osalisi ye, otondisi ye na lokumu mpe na bokonzi.
Psal LinVB 21:7  Obenisi nkombo ya ye seko, osepelisi ye mpo ozali penepene na ye.
Psal LinVB 21:8  Soko mokonzi wa ekolo atii motema na Nzambe, Mokonzi wa likolo akosala ’te akolembe te.
Psal LinVB 21:9  Loboko la yo lokobete banguna ba ye banso, okokweisa banyokoli na loboko la yo la mobali.
Psal LinVB 21:10  Ntango okomilakisa, okotumba bango na móto, na nkanda Mokonzi akosilisa bango na móto.
Psal LinVB 21:11  Okolongola bana ba bango o mokili, okosilisa libota lya bango o ntei ya bato.
Psal LinVB 21:12  Ata bameki kosala yo mabe to bakaneli yo, bakokoka kosala eloko te :
Psal LinVB 21:13  okozongisa bango nsima, ntango okobendela bango litimbo lya yo.
Psal LinVB 21:14  E Mokonzi, teleme na nguya ya yo ! Tokoyembela bokasi bwa yo nzembo !
Chapter 22
Psal LinVB 22:1  Ya kapita wa bayembi. Lolenge loko na ‘Mbuli ya ntongo’. Nzembo ya Davidi.
Psal LinVB 22:2  Nzambe wa ngai, Nzambe wa ngai, mpo nini otiki ngai ? Ata nagangi makasi, otikali mosika na ngai.
Psal LinVB 22:3  E Nzambe, nabyanga yo na moi, okoyanola te, nabyanga yo na butu, okondimela ngai te.
Psal LinVB 22:4  Nzokande ofandi o ndako esantu, yo lokumu la Israel.
Psal LinVB 22:5  Bankoko ba biso batiaki mitema na yo, balikyaki na yo mpe obikisaki bango.
Psal LinVB 22:6  Babelelaki yo mpe bazwaki libiki, batiaki mitema na yo mpe basambwaki te.
Psal LinVB 22:7  Kasi ngai nazali lokola mpambó, moto te : bato batioli ngai, banso bakinoli ngai.
Psal LinVB 22:8  Baye bamoni ngai, bafingi ngai, baningisi mitó mpe baseki ngai boye :
Psal LinVB 22:9  « Atii elikya na Mokonzi, aya kobikisa ye ! Asalisa ye soko alingi ye solo ! »
Psal LinVB 22:10  Yo moto obimisaki ngai o libumu lya mama, mpe olalisaki ngai o bontolo bwa ye.
Psal LinVB 22:11  Mokolo babotaki ngai, batiaki ngai o maboko ma yo ; ut’o libumu lya mama, Nzambe wa ngai se yo.
Psal LinVB 22:12  Otikala mosika te, zambi likama liyei, moto moko te akosalisa ngai.
Psal LinVB 22:13  Ngombe babali ebele izingi ngai, nyama inene ya Basan iyei kokanga ngai.
Psal LinVB 22:14  Nkosi ileli na mposa ya koboma, ifungoli minoko minene mpo ya kolia ngai.
Psal LinVB 22:15  Nakomi lokola mai masopani o mabelé, minkuwa mya ngai minso mibukani. Motema mwa ngai mokomi lokola mafuta ma nzoi, mapanzani o kati ya nzoto ya ngai.
Psal LinVB 22:16  Mongongo mokauki lokola eteni ya mbeki, lolemu la ngai lokangemi o mbanga. Olalisi ngai o mputulu lokola moto awei.
Psal LinVB 22:17  Bato babe baike bakangeli ngai nzela, bayei kozinga ngai lokola mbwa ebele, batuboli ngai makolo na maboko.
Psal LinVB 22:18  Nakoki kotanga minkuwa mya ngai minso, bato bamoni ngai bayei kotala ngai.
Psal LinVB 22:19  Bakabelani bilamba bya ngai, babeti zeke mpo ya molato mwa ngai.
Psal LinVB 22:20  Kasi yo Nzambe, ozala mosika te, yo bokasi bwa ngai, yaka kosalisa ngai noki !
Psal LinVB 22:21  Bikisa bomoi bwa ngai, nakufa na mompanga te, batela ngai na manzaka ma mbwa !
Psal LinVB 22:22  Longola ngai o monoko mwa nkosi, nakufa na maseke ma nzale te.
Psal LinVB 22:23  Nakoyebisa bandeko ba ngai nkombo ya yo, nakokumisa yo o likita linene lya bato :
Psal LinVB 22:24  « Bino bato bokobangaka Mokonzi, bokumisa ye, bato ba libota lya Yakob, bopesa ye lokumu, bino banso bato ba Israel, bobanga ye !
Psal LinVB 22:25  Akinolaki mobola moko te, aboyaki ye o mpasi ya ye te, abombelaki ye elongi te, kasi andimelaki oyo abelelaki ye. »
Psal LinVB 22:26  Nakosakola lokumu la yo o likita linene, nakokokisa bilako o miso ma baye bakobangaka ye.
Psal LinVB 22:27  Babola bakolia mpe bakotonda, baye bakoluka Mokonzi, bakokumisa ye, bakoumela na bomoi seko.
Psal LinVB 22:28  Bato banso bakokanisa lisusu Mokonzi, bato ba nse mobimba bakozongela ye, bato ba bikolo binso bakokumbamela ye.
Psal LinVB 22:29  Nzambe azali na bokonzi bonso, zambi akoyangelaka bato ba bikolo binso.
Psal LinVB 22:30  Bato banene ba mokili bakokumbamela ye, baye banso bazali na bomoi lisusu te mpe bakomi mputulu bakofukamela ye.
Psal LinVB 22:31  Bato bakoya nsima bakosalela Mokonzi, bakoyebisa nkombo ya ye o libota lya bango.
Psal LinVB 22:32  Bakoyebisa bankoko ba bango bosembo bwa ye ná mpe manso Mokonzi asali.
Chapter 23
Psal LinVB 23:1  Nzembo ya Davidi. Mokengeli wa ngai, se Mokonzi, nakozanga eloko yoko te.
Psal LinVB 23:2  Akopemisa ngai o esobe ya matiti kitoko, akokamba ngai o esika mai mazali.
Psal LinVB 23:3  Kuna akolendisa ngai motema. Mpo ya lokumu la nkombo ya ye akokamba ngai o nzela ya bosembo.
Psal LinVB 23:4  O molili mwa lobwaku nakobanga te, mpo ozali pene na ngai, mpe lingenda la yo likobatelaka ngai.
Psal LinVB 23:5  O miso ma banguna, otandeli ngai meza etondi na bilei ; osopeli ngai malasi o motó, otondisi mbeki ya ngai na vino.
Psal LinVB 23:6  Nakomono bolamu mpe nakosepela bomoi bwa ngai mobimba, kin’o mokolo nakofanda seko o ndako ya Mokonzi.
Chapter 24
Psal LinVB 24:1  Nzembo ya Davidi. Nzambe azali mokonzi wa nse mpe wa biloko binso, wa mokili mobimba mpe wa banso bafandi wana.
Psal LinVB 24:2  Ye moto atongaki mwango likolo lya mbu mpe apikaki mwango makasi likolo lya mai manene.
Psal LinVB 24:3  Nani akobuta ngomba ya Mokonzi mpo ateleme o esika esantu ya ye ?
Psal LinVB 24:4  Bobele moto oyo azali na maboko mpe na motema peto, oyo aluki kokosa baninga te, oyo akolayaka ndai ya lokuta te.
Psal LinVB 24:5  Ye moto akozwa bobenisi bwa Mokonzi mpe bolamu bwa Nzambe, mobikisi wa ye.
Psal LinVB 24:6  Tala ndenge bato bakolukaka ye basengeli kozala, bana ba Yakob bakolukaka ye se bongo.
Psal LinVB 24:7  E bino, bizibeli bya Tempelo, bofungwana, bino bizibeli bya kala bya Tempelo, bozibwana, mpo ’te Mokonzi wa nkembo ayingela !
Psal LinVB 24:8  Mokonzi wa nkembo, ye nani ? Ye Nzambe wa bokasi bonso mpe wa mpiko, ye Nzambe, elombe o etumba.
Psal LinVB 24:9  E bino, bizibeli bya Tempelo, bofungwana, bino, bizibeli bya kala bya Tempelo, bozibwana, bongo Mokonzi wa nkembo ayingela !
Psal LinVB 24:10  Nani nde Mokonzi oyo wa nkembo ? Ye Mokonzi wa mampinga ma likolo, ye Mokonzi wa nkembo.
Chapter 25
Psal LinVB 25:1  Nzembo ya Davidi. Natomboli motema epai ya yo, Mokonzi, yo Nzambe wa ngai.
Psal LinVB 25:2  Natii elikya ya ngai se na yo, nayoka nsoni te, banguna baseke ngai te !
Psal LinVB 25:3  Moto atii motema na yo, akoyoka nsoni te, kasi oyo akotalaka yo mpamba, ye moto akoyoka nsoni.
Psal LinVB 25:4  Mokonzi, olakisa ngai nzela nasengeli kolanda, oyebisa ngai maye olingi nasala.
Psal LinVB 25:5  Oteya ngai bosolo bwa yo ; okamba ngai, zambi mobikisi wa ngai, se yo ! Mikolo minso nakotia elikya na yo.
Psal LinVB 25:6  Yawe, okundola ngolu ya yo, bolingi bwa yo, bolingi bwa seko.
Psal LinVB 25:7  Obosana masumu mpe mabungi ma ngai ma bolenge, okanisa ngai se na motema bolingi.
Psal LinVB 25:8  Mokonzi aleki bolamu mpe bosembo, akolakisaka nzela na baye babungi.
Psal LinVB 25:9  Akokambaka bato ba bosawa o nzela ya bosembo, mpe akoteyaka bato ba mawa nzela ya ye.
Psal LinVB 25:10  Soko bato batosi mibeko mya bondeko bwa ye, Mokonzi akosala manso na bolingi mpe na bosembo.
Psal LinVB 25:11  Mokonzi, mpo ya nkombo ya yo, limbisa masumu ma ngai maleki mingi.
Psal LinVB 25:12  Moto abangi Mokonzi solo, Mokonzi akolakisa ye nzela asengeli kolanda.
Psal LinVB 25:13  Mikolo minso akozala na esengo, bana ba ye bakozala bankolo ba Ekolo.
Psal LinVB 25:14  Mokonzi akomiyebisa na baye bakobangaka ye, akolakisa bango bondeko.
Psal LinVB 25:15  Miso ma ngai makotala se epai ya Mokonzi, akobatela makolo ma ngai makangema o motambo te.
Psal LinVB 25:16  Obwakela ngai miso, oyokela ngai ngolu, ngai moto wa mawa, nazali se ngai moko.
Psal LinVB 25:17  Olongola bobangi o motema mwa ngai, obimisa ngai o esika ya minyoko.
Psal LinVB 25:18  Tala ndenge nazali na mpasi mpe na mawa, sukola mbindo inso ya masumu ma ngai.
Psal LinVB 25:19  Tala, banguna ba ngai bazali ebele, bayini ngai boyini mpenza !
Psal LinVB 25:20  Batela bomoi bwa ngai mpe bikisa ngai, yo mokengeli wa ngai, nayoka nsoni te.
Psal LinVB 25:21  Bosolo mpe bosembo bobatela ngai, natii motema na yo, Mokonzi.
Psal LinVB 25:22  E Nzambe, bikisa bato ba Israel o makambo manso ma mpasi !
Chapter 26
Psal LinVB 26:1  Nzembo ya Davidi. E Mokonzi, longisa ngai ; zambi nalandi se nzela ya bosembo, mpe natii motema na Mokonzi, nabungi te.
Psal LinVB 26:2  E Mokonzi, tala motema mpe ezalela ya ngai mpe meka ngai.
Psal LinVB 26:3  Nakanisi bolamu bwa yo ntango inso, natamboli nzela ya yo ya bosolo.
Psal LinVB 26:4  Nakofandaka esika yoko na bato ba lokuta te, nakokotoko o ndako ya bakibisi te.
Psal LinVB 26:5  Nayini lisanga lya bato babe, nakofandaka te o ndako ya bato baboya yo.
Psal LinVB 26:6  Nasukoli maboko zambi nasali mabe te ; natamboli zongazonga na altare ya yo, Mokonzi,
Psal LinVB 26:7  na boyembi nzembo ya botondi yo, mpe ya bosakoli makamwa ma yo manso.
Psal LinVB 26:8  E Mokonzi, nalingi ndako esika ofandi, esika eye okozwaka lokumu lonene.
Psal LinVB 26:9  Obwaka ngai esika yoko na basumuki te, mpe otia ngai o molongo mwa babomi te.
Psal LinVB 26:10  Maboko ma bango malingi kosala makambo mabe, matondi na mabonza mazangi bosembo.
Psal LinVB 26:11  Nazali na ezalela ya moto wa bosembo, sikola ngai, yokela ngai mawa.
Psal LinVB 26:12  Makolo ma ngai mapikami bobele o mabelé makasi, nákumisa yo, Mokonzi, o lisanga lya bato.
Chapter 27
Psal LinVB 27:1  Nzembo ya Davidi. Nzambe azali mwinda mpe libiki lya ngai, nabanga lisusu nini ? Nzambe akobatelaka bomoi bwa ngai, bongo nani akoki kobangisa ngai ?
Psal LinVB 27:2  Soko bato babe babimeli ngai, mpo ya kosilisa mpe koboma ngai, bango moko, banyokoli na banguna, bakoselumwa mpe bakokweya se wana.
Psal LinVB 27:3  Ata limpinga mobimba liyeli ngai, motema mwa ngai mokobanga te. Ata etumba makasi ebimeli ngai, nazali se na elikya.
Psal LinVB 27:4  Nasengi Nzambe mpo yoko, nalingi se yango : nafanda o ndako ya ye mikolo minso, nasepela bolingi bwa Mokonzi, nakende o ndako ya ye ya nkembo.
Psal LinVB 27:5  Zambi akobombela ngai esika o ndako ya ye o mikolo mpasi ekokwela ngai. Akobomba ngai o ema ya ye esantu, akotelemisa ngai o libanga linene.
Psal LinVB 27:6  Bongo nakoki kotombola motó likolo lya banguna bazingi ngai. Nakobonza mabonza ma bokumisi ye o ema ya ye. Nakoyemba mpe nakobinela Mokonzi.
Psal LinVB 27:7  Mokonzi, yoka ngai, nazali kobelela yo : ondimela ngai, oyanola ngai.
Psal LinVB 27:8  Motema motindi ’te naluka yo, naluki se elongi ya yo, Mokonzi.
Psal LinVB 27:9  Obombela ngai elongi ya yo te, obwaka mosaleli wa yo mpo ya nkanda te, zambi mosalisi wa ngai, se yo. E Nzambe, yo mobikisi wa ngai, oboya ngai te mpe otika ngai te.
Psal LinVB 27:10  Ata tata na mama baboyi ngai, yo, Mokonzi, okoyamba ngai se malamu.
Psal LinVB 27:11  E Mokonzi, lakisa ngai nzela ya yo, kamba ngai o nzela ya bosembo, zambi banyokoli ba ngai bazali baike.
Psal LinVB 27:12  Okaba ngai o maboko ma banguna te. Bato ba lokuta batelemi mpo ya kofunda ngai, bakani kosala ngai makambo makasi makasi.
Psal LinVB 27:13  Nayebi solo ’te nakomono bolamu bwa Nzambe o mokili mwa baye bazali na bomoi.
Psal LinVB 27:14  Tia elikya epai ya Mokonzi, zala makasi, lendisa motema, tia motema na Mokonzi.
Chapter 28
Psal LinVB 28:1  Nzembo ya Davidi. E Mokonzi, nabeleli yo. Yo libanga lya ngai, okanga matoi te ! Soko otikali nye, nakokoma lokola moto akiti o lilita.
Psal LinVB 28:2  Ndima losambo la ngai ntango nabondeli yo mpe natomboli maboko epai ya ndako ya yo esantu.
Psal LinVB 28:3  Obwaka ngai esika yoko na basumuki te, otia ngai o molongo mwa bato babe te. Na monoko bakolobaka makambo ma boboto, kasi o motema bakobombaka mabe bakani kosala.
Psal LinVB 28:4  Sala bango lokola bango moko basalaki, zongisela bango mabe maye bango moko basalaki, pesa bango lifuta likoki na misala mya bango.
Psal LinVB 28:5  Baboyi kondima bikela bya Mokonzi, bakotalaka mosala mwa maboko ma ye se mpamba. Nzambe akweisa bango, bateleme lisusu te.
Psal LinVB 28:6  Bakumisa Mokonzi, zambi andimi losambo la ngai.
Psal LinVB 28:7  Mokonzi azali bokasi mpe nguba ya ngai, natii motema na ye mpe asalisi ngai. Nayoki nsai mpe nakoyembela ye nzembo ya botondi.
Psal LinVB 28:8  Mokonzi azali bokasi bwa ekolo ya ye, azali ebombamelo ekobikisa mesiya wa ye.
Psal LinVB 28:9  Bikisa ekolo ya yo, benisa bato ba libota lya yo, kamba mpe yangela bango na lobiko.
Chapter 29
Psal LinVB 29:1  Nzembo ya Davidi. Bana ba Nzambe, bokumisa Mokonzi, bopesa Mokonzi nkembo na lokumu.
Psal LinVB 29:2  Bopesa Nzambe nkembo ekoki na nkombo ya ye. Bokumbamela ye o esika ya ye esantu.
Psal LinVB 29:3  Lolaka la Mokonzi loyokani likolo lya mbu, Nzambe wa nkembo abetisi nkake ya ye ; ye Mokonzi akoyangelaka mai manso ma mbu.
Psal LinVB 29:5  Lolaka la Mokonzi lopasoli nzete inene ya Libano.
Psal LinVB 29:6  Apimbwisi ngomba ya Libano lokola mwana wa ngombe, mpe ngomba Sirio lokola mwana wa nzale.
Psal LinVB 29:8  Lolaka la Nzambe loningisi eliki, Mokonzi aningisi eliki ya Kades.
Psal LinVB 29:9  Lolaka la Nzambe loningisi nzete inene mpe lolongoli mposo ya nzete ike. O ndako ya ye banso bagangi : Nkembo !
Psal LinVB 29:10  Mokonzi afandi o ngwende ntango ya mpela enene, Nzambe afandi o ngwende bo mokonzi wa seko.
Psal LinVB 29:11  Nzambe akopesaka nguya na bato ba ekolo ya ye, akobenisaka bato ba ye na bopesi bango boboto.
Chapter 30
Psal LinVB 30:1  Nzembo o ntango ya bobenisi Tempelo (2 Sam 5,6-12). Nzembo ya Davidi.
Psal LinVB 30:2  E Mokonzi, nakumisi yo, zambi otelemisi ngai, olingaki banguna baseke ngai te.
Psal LinVB 30:3  E Mokonzi Nzambe wa ngai, nabeleli yo mpe obikisi ngai.
Psal LinVB 30:4  E Mokonzi, olongoli ngai o mboka ya bawa, ozongiseli ngai bomoi o ntango nakiti o lilita.
Psal LinVB 30:5  Bino banso bokolingaka Nzambe, boyembela ye, bokumisa ye mpe bosakola nkombo ya ye esantu.
Psal LinVB 30:6  Nkanda ya ye ekoumelaka te, bolingi bwa ye bozali bwa seko. Na butu bato baleli, na ntongo basepeli.
Psal LinVB 30:7  Na esengo nsuka te nalobaki boye : « Nakoki kokweya mokolo moko te. »
Psal LinVB 30:8  E Mokonzi, mpo ya bolamu bwa yo napikami makasi lokola ngomba ya mabanga ; kasi soko obombeli ngai elongi ya yo, nabulungani.
Psal LinVB 30:9  Yango wana nabeleli yo, Mokonzi, nabondeli yo, Nzambe, nalobi :
Psal LinVB 30:10  « Nákufa to nákita o lilita, okozwa na yango litomba nini ? Mabelé mpamba makoki nde kokumisa yo, to kosakola lobokó la yo o ntei ya bato ?
Psal LinVB 30:11  E Mokonzi, ndimela ngai mpe yokela ngai mawa, e Nzambe, yaka kosalisa ngai ! »
Psal LinVB 30:12  Okomisi mawa ma ngai libina lya esengo, olongoli ngai elamba ya mpili, olatisi ngai molato mwa eyenga.
Psal LinVB 30:13  Yango wana nakotika te koyembela yo, Mokonzi Nzambe wa ngai, nakokumisa yo ntango inso.
Chapter 31
Psal LinVB 31:2  E Mokonzi, ozali ebombamelo ya ngai, nayoka nsoni mokolo moko te. Bikisa ngai mpo ya bosembo bwa yo.
Psal LinVB 31:3  Tandela ngai matoi, salisa ngai noki. Zala libanga lya ngai esika nakoki kokima, zala ebombamelo ekobatela ngai.
Psal LinVB 31:4  Libanga mpe ebombamelo ya ngai, se yo, mpo ya nkombo ya yo, lakisa ngai nzela mpe kamba ngai.
Psal LinVB 31:5  Longola ngai o monyama batandeli ngai, zambi mobateli wa ngai, bobele yo.
Psal LinVB 31:6  Natiki molimo mwa ngai o maboko ma yo, yo moto obikisi ngai, Yo Mokonzi Nzambe wa bosolo.
Psal LinVB 31:7  Nayini bato bakokumisaka bikeko bya mpamba, ngai natii motema na Mokonzi.
Psal LinVB 31:8  Nabineli yo na esengo mpo ya bolingi bwa yo, zambi omoni mpasi ya ngai, oyebi bobangi bwa ngai.
Psal LinVB 31:9  Okabaki ngai o maboko ma banguna te, mpe obongiseli ngai nzela.
Psal LinVB 31:10  E Mokonzi, yokela ngai mawa, nanyokwami mingi, mawa mabebisi ngai miso, mongongo na libumu.
Psal LinVB 31:11  Bomoi bwa ngai bokosila bobele na mawa, mibu na mibu nazali se kokimela ; makasi ma ngai masili mpo ya masumu, minkuwa mya ngai mibebi nye.
Psal LinVB 31:12  Banguna bakofingaka ngai, baninga bakomi kobanga ngai ; bayebani bakoyokaka ngai nsomo, baye bakutani na ngai o nzela bakimi ngai.
Psal LinVB 31:13  Bakobosanaka ngai se lokola moto akufa, bakobwakaka ngai lokola mbeki ebolani.
Psal LinVB 31:14  Nakoyokaka bilobaloba bya bato, bipai binso nsomo na nsomo ! Bayokani mpo ya kosala ngai mabe, balingi koboma ngai.
Psal LinVB 31:15  Nzokande ngai natii motema na yo, Mokonzi, nalobi : Nzambe wa ngai, bobele yo !
Psal LinVB 31:16  Bomoi bwa ngai bozali o maboko ma yo, bikisa ngai o maboko ma baye bakaneli ngai.
Psal LinVB 31:17  Elongi ya yo engengele mosaleli wa yo, bikisa ngai mpo ya bolingi bwa yo.
Psal LinVB 31:18  E Mokonzi, nayoki nsoni te awa nazali kobelela yo, kasi baye baboya yo bayoka nsoni, bakende o mboka ya bawa mpe bakanga monoko.
Psal LinVB 31:19  Sukisa bato ba lokuta, batika koloba, baye bakotongoko moto wa bosembo, baye bakotiolaka ye na lolendo.
Psal LinVB 31:20  E Mokonzi, makabo ma yo maleki bonene, okopesaka mango na bato bakobangaka yo ; okokabaka mango na bato bakotiaka elikya na yo, mpo ’te bato ba nse bakoka komono mango.
Psal LinVB 31:21  Okobatelaka bango penepene na yo, mosika na mayele mabe ma bato. Okobombaka bango o ema ya yo, mosika na bato ba songisongi.
Psal LinVB 31:22  Bakumisa Mokonzi, mpo ya bolingi bwa ye, asali ngai makambo ma bokamwisi o engumba ezingami na lopango.
Psal LinVB 31:23  Mpe o ntango nayokaki nsomo nalobaki : « Balongoli ngai mosika o miso ma yo ! » Nzokande yo oyokaki losambo la ngai o ntango nazalaki kobelela yo.
Psal LinVB 31:24  Bolinga Mokonzi, bino bato ba ye banso, zambi akokengeleke baye bakoyambaka ye, kasi akozongisa mabe na bato ba lolendo.
Psal LinVB 31:25  Bolendisa mitema mpe bozala na mpiko, bino banso bokotiaka mitema na Mokonzi !
Chapter 32
Psal LinVB 32:1  Ya Davidi. Mateya. Esengo na moto azwi bolimbisi masumu, oyo Nzambe azipi mabe ma ye.
Psal LinVB 32:2  Esengo na moto oyo Mokonzi abosani mabe ma ye, mpe azali na mayele ma mokosi te.
Psal LinVB 32:3  Awa nakangi monoko, bokasi bwa ngai bokomi kosila na boleli ntango inso.
Psal LinVB 32:4  Butu moi loboko la yo lozalaki konyata ngai, motema mwa ngai mokauki lokola esobe eziki na móto.
Psal LinVB 32:5  Nasakoli lisumu lya ngai o miso ma yo, nabombeli yo mabe ma ngai te. Nalobi : Nakosakola masumu ma ngai na Mokonzi, mpe olimbisi ngai nyongo na masumu.
Psal LinVB 32:6  Bongo bato ba yo banso basambela yo o eleko bayoki nsomo ; mai makasi mazindisa bango te.
Psal LinVB 32:7  Ozali esika nakoki kobombama, okobatelaka ngai o ntango ya mpasi, okozingaka ngai na nzembo ya libiki.
Psal LinVB 32:8  Olobi na ngai : « Nakolakisa yo nzela okolanda, nakolanda yo na miso mpo ya kopesa yo malako. »
Psal LinVB 32:9  Osala lokola farasa to mpunda te, iye izangi mayele, ikotosaka bobele soko batii yango ebende o monoko ; basengeli kolakisa yango botosi, soki te, mabe makokwela yo !
Psal LinVB 32:10  Malozi maike makokwela mosumuki, kasi oyo akolikya na Mokonzi, akobombama o bondeko bwa ye.
Psal LinVB 32:11  Bosepela Mokonzi, boyoka nsai, bino basemba, bino bato ba motema semba, boyemba na esengo.
Chapter 33
Psal LinVB 33:1  Bino bato ba bosembo, boyembela Mokonzi, bato ba motema semba, bokumisa ye.
Psal LinVB 33:2  Botondo Nzambe na lokombe, boyembela ye nzembo na likembe lya nsinga zomi.
Psal LinVB 33:3  Boyembela ye nzembo ya sika, bobinela ye mpe bobetele ye maboko,
Psal LinVB 33:4  mpo liloba lya Mokonzi lizali liloba lya bosembo, misala mya ye minso, misala mya bosolo.
Psal LinVB 33:5  Apusi kolinga bosembo na bosolo, nse mobimba etondi na bolingi bwa Ye.
Psal LinVB 33:6  Mokonzi akeli likolo na liloba lya ye, na mpema ya ye akeli minzoto minso.
Psal LinVB 33:7  Asangisi mai ma mbu o esika yoko, atii mai manso ma mongwa o bibombelo.
Psal LinVB 33:8  O nse mobimba bato babanga Mokonzi, bato banso bakofandaka wana babanga ye !
Psal LinVB 33:9  Alobi se liloba lyoko mpe binso bikelami, atindi etinda mpe biloko binso bibimi.
Psal LinVB 33:10  Mokonzi abebisi mikano mya bato ba bikolo, abulinginyi mayele ma bango.
Psal LinVB 33:11  Kasi mokano mwa Nzambe mozali mwa seko, mpe makanisi ma ye makoumela mibu na mibu.
Psal LinVB 33:12  Esengo na bato baye Mokonzi azali Nzambe wa bango, baye yemei aponi ’te bazala ekolo ya ye.
Psal LinVB 33:13  Ut’o likolo Mokonzi akotalaka mpe akomonoko bato banso ba nse.
Psal LinVB 33:14  Ut’o esika akofandaka akokengeleke bato banso ba mokili.
Psal LinVB 33:15  Ye moto akeli mitema mya bango banso, yango wana ayebi misala mya bango minso.
Psal LinVB 33:16  Mokonzi moko te akolonga mpo ya basoda ba ye, elombe akobika mpo ya bokasi bwa ye te.
Psal LinVB 33:17  Farasa ekolongisa moto etumba te, bokasi bwa yango bokobikisa ye te.
Psal LinVB 33:18  Kasi Mokonzi akokengele baye bakobangaka ye, baye bakotiaka mitema na bolingi bwa ye.
Psal LinVB 33:19  Akobikisa bango o liwa mpe akolendisa bango o ntango ya nzala enene.
Psal LinVB 33:20  Biso tokozila se Mokonzi, oyo akosalisaka mpe akobatelaka biso, se ye !
Psal LinVB 33:21  Esengo ya mitema mya biso ekouta bobele na ye, elikya ya biso, nde nkombo ya ye nta bosantu.
Psal LinVB 33:22  Bolingi bwa yo, Mokonzi, bobatelaka biso, tokotiaka motema monso na yo.
Chapter 34
Psal LinVB 34:1  Nzembo ya Davidi. Akosaki ’te azali na ligboma o miso ma Akimelek. Oyo abengani ye mpe Davidi akei (1 Sam 21,11-16).
Psal LinVB 34:2  Nakotondo Mokonzi ntango inso, monoko mwa ngai mokokumisa ye seko.
Psal LinVB 34:3  Motema mwa ngai mokosepela yo, Mokonzi, bato bake basepela mpe bayoka nsai.
Psal LinVB 34:4  Bokumisa Mokonzi na ngai elongo, toyembela nkombo ya ye, biso banso lisanga.
Psal LinVB 34:5  Naluki Mokonzi mpe ayanoli ngai, abikisi ngai o makambo manso ma nsomo.
Psal LinVB 34:6  Elongi ya moto atali ye ekofungwana, ekomonisa nsoni ata moke te.
Psal LinVB 34:7  Moto mobola abeleli : Mokonzi ayoki ye mpe abikisi ye o nsomo ya ye.
Psal LinVB 34:8  Ntango inso anzelu wa Mokonzi akobatelaka mpe akokengeleke bato bakobangaka ye.
Psal LinVB 34:9  Botala mpe bokoyeba ’te Mokonzi apusi bolamu, esengo na moto abombami epai ya ye.
Psal LinVB 34:10  Bino bato ba ekolo ya ye esantu, bobanga Mokonzi, baye bakobanga ye bakokelela soki te.
Psal LinVB 34:11  Bato ba nkita bakomi kozanga biloko mpe bayoki nzala, kasi baye bakoluka Mokonzi bakokelela te.
Psal LinVB 34:12  E bana, yakani mpe yokani ngai, nakolakisa bino eloko nini bobangi Nzambe.
Psal LinVB 34:13  Yo moto olingi kozala na bomoi mpe koyoka esengo mikolo minso ?
Psal LinVB 34:14  Kengele lolemu la yo ’te loloba mabe te, keba na monoko ’te mobuka lokuta te.
Psal LinVB 34:15  Kima mabe mpe sala malamu, luka boboto mpe batela bwango !
Psal LinVB 34:16  Miso ma Mokonzi makotalaka bato ba bosembo, mpe matoi ma ye makoyokaka mabondeli ma bango.
Psal LinVB 34:17  Mokonzi akokengeke bato babe, akolongola nkombo ya bango o mokili.
Psal LinVB 34:18  Mokonzi akoyoka baye bakobelela ye, mpe akobikisa bango o mpasi ya bango inso.
Psal LinVB 34:19  Mokonzi azali penepene na oyo ayoki motema mawa, akobikisaka oyo alembi motema.
Psal LinVB 34:20  Makambo ma mpasi makokwelaka moto semba, kasi mbala inso Mokonzi akobikisa ye.
Psal LinVB 34:21  Mokonzi akobatelaka minkuwa mya ye minso, ata monkuwa moko mwa ye mokobukana te.
Psal LinVB 34:22  Moto mabe akokufa mpo ya mabe ma ye, oyo ayini moto semba akozwa etumbu.
Psal LinVB 34:23  Mokonzi akobikisaka basaleli ba ye, moto amibombi epai ya ye akozwa etumbu te.
Chapter 35
Psal LinVB 35:1  Nzembo ya Davidi. E Mokonzi, sambisa bato bafundi ngai, bunda na bato bayeli ngai etumba.
Psal LinVB 35:2  Lata molato mwa etumba mpe kamata nguba, teleme mpo ya kosalisa ngai.
Psal LinVB 35:3  Tombolela banguna ba ngai likongo mpe mompanga, loba na ngai : « Ngai moto nakobikisa yo. »
Psal LinVB 35:4  Bayoka nsoni mpe basambwa, baye banso baluki koboma ngai. Bazonga nsima mpe babulungana, baye banso bakani kosala ngai mabe.
Psal LinVB 35:5  Bazala lokola matiti mapimbwi na mompepe, mokolo anzelu wa Mokonzi akoya kobengana bango !
Psal LinVB 35:6  Nzela ya bango ezala molili mpe boselu, ntango anzelu wa Mokonzi akolanda bango.
Psal LinVB 35:7  Batandeli ngai monyama, ntina te, batimoli libulu mpo ’te bakweisa ngai.
Psal LinVB 35:8  Likambo linene likokwela bango na mbalakaka, bakokangema o monyama bango moko batiaki, bakokweya o libulu bango moko batimolaki.
Psal LinVB 35:9  Bongo motema mwa ngai mokosepela Mokonzi mpe nakobina na esengo mpo abikisi ngai.
Psal LinVB 35:10  Na motema monso nakoloba : « E Mokonzi, nani akokani na yo ? Okobikisaka moto moke o maboko ma elombe, mpe moto mobola o maboko ma moyibi. »
Psal LinVB 35:11  Banzeneneke ba lokuta babimeli ngai, batuni ngai makambo nayebi te.
Psal LinVB 35:12  Nasali bango malamu, bazongiseli ngai mabe, bato banso bakimi ngai.
Psal LinVB 35:13  Nzokande ngai, o ntango bazalaki kobele, nalataki ngoto, namikitisaki na bolali nzala, mpe natiki kosambela te.
Psal LinVB 35:14  Nazalaki kokende mpe kozonga lokola moto akolelaka moninga to ndeko ; na mawa manene nagumbami lokola moto alati mpili ya mama.
Psal LinVB 35:15  Ntango nakwei, basangani mpo ya koseke ngai, batioli ngai lokola bampaya, baye bayebi ngai te ;
Psal LinVB 35:16  batiki te koseke mpasi ya ngai na bolakisi mino.
Psal LinVB 35:17  Mokonzi, kin’o ntango nini okotala se mpamba ? Bikisa bomoi bwa ngai o mabe mana, batela nzoto ya ngai o manzaka ma nkosi.
Psal LinVB 35:18  Nakotondo yo o lisanga linene, nakokumisa yo o miso ma bato banso.
Psal LinVB 35:19  Banguna, bakosi baye, baseke mpasi ya ngai te ; baye bayini ngai ntina te, batika kofinana liso !
Psal LinVB 35:20  Bato baye bakolingaka boboto te, baluki se kokanela bato ba motema boboto.
Psal LinVB 35:21  Bafundi ngai na lokuta, balobi : « E yo, tomoni yango na miso ! »
Psal LinVB 35:22  E Nzambe, yo omoni nyonso, okanga matoi te, Mokonzi, ozala na ngai mosika te !
Psal LinVB 35:23  Lamuka mpe teleme mpo ya kosamba likambo lya ngai, Mokonzi Nzambe wa ngai, yaka kolongisa ngai.
Psal LinVB 35:24  E Mokonzi Nzambe wa ngai, kata likambo na bosembo, mpo ’te baseke ngai lisusu te.
Psal LinVB 35:25  Baloba te : « Biso bato tolongi » ; mpe bamilobela te : « Tosukisi ye mpenza ! »
Psal LinVB 35:26  Baye banso basepeli mpasi ya ngai, bayoka nsoni mpe basambwa, bakufa na nsoni mpe babulungana, baye bafundi ’te baleki ngai !
Psal LinVB 35:27  Kasi baye baluki kobikisa ngai, baganga na esengo, baloba ntango inso : « Mokonzi alongi, oyo alingi bolamu bwa mosaleli wa ye. »
Psal LinVB 35:28  Nakosakola ’te ozali na bosembo mpe nakokumisa yo mokolo na mokolo.
Chapter 36
Psal LinVB 36:1  Ya kapita wa bayembi. Ya mosaleli wa Mokonzi. Ya Davidi.
Psal LinVB 36:2  Nayebi makanisi mabe mazali o motema mwa mosumuki, o motema mwa ye amoni ntina ya kobanga Nzambe te.
Psal LinVB 36:3  Akomimonoko se moto malamu, bongo azali komono mabe ma ye moko te.
Psal LinVB 36:4  Ayebi se kotongo mpe kokosa bato, bwanya bozali na ye lisusu te.
Psal LinVB 36:5  O mbeto ya ye akokanaka se kosala mabe, alingi se kolanda nzela elamu te, aboyi kotika mabe ma ye.
Psal LinVB 36:6  E Mokonzi, bolingi bwa yo bokomi kin’o likolo, bosolo bwa yo kin’o mampata.
Psal LinVB 36:7  Bosembo bwa yo bopikami lokola ngomba ya Nzambe, bosambisi bwa yo bozindo bozali lokola lobwaku. E Mokonzi, okobatelaka bato na nyama.
Psal LinVB 36:8  E Nzambe, bolingi bwa yo bozali na motuya nsuka te ! Mapapu ma yo makobatelaka bana ba Adamu.
Psal LinVB 36:9  Okotondisaka bango na biloko ebele ya ndako ya yo, okomelisaka bango o ebale ya bolamu bwa yo ;
Psal LinVB 36:10  mpo ozali liziba lya bomoi bonso, mpo ya mwinda mwa yo tozali komono polele.
Psal LinVB 36:11  Lakisa bolingi bwa yo na bato bayebi yo, mpe bosembo bwa yo na bato ba motema semba.
Psal LinVB 36:12  Ondima te ’te bato ba lolendo banyata ngai, bato ba motema mabe babengana ngai te !
Psal LinVB 36:13  Tala, na mbalakaka bato babe bakwei, bakoki koteleme lisusu te.
Chapter 37
Psal LinVB 37:1  Ya Davidi. Bato babe, oyokela bango zuwa te, baye bazangi bosembo mpe te :
Psal LinVB 37:2  mosika te bakokauka lokola matiti, bakopolo lokola matiti mabesu.
Psal LinVB 37:3  Tia motema na Mokonzi mpe sala se malamu, bongo ofanda na boboto o mokili.
Psal LinVB 37:4  Luka esengo ya yo bobele epai ya Mokonzi, ye akopesa yo binso biye motema mwa yo molingi.
Psal LinVB 37:5  Tia bomoi bwa yo o maboko ma Mokonzi, tia elikya se na ye mpe akosalisa yo.
Psal LinVB 37:6  Akomonisa bosembo bwa yo polele lokola ntongo mpe bosolo bwa yo lokola moi na midi.
Psal LinVB 37:7  Zala motema mpio mpe tia elikya na Mokonzi, oyoka motema mpasi te soko basusu bazwi nkita noki, to soko balongi na mayele mabe.
Psal LinVB 37:8  Tika koyoka nkanda, tika mpe kosilika, kozala motema móto ekobebisaka motema.
Psal LinVB 37:9  Zambi bato babe bakosila nye, bato bakolikya o Mokonzi, bango nde bakozwa mokili.
Psal LinVB 37:10  Etikali moke mosumuki akozala lisusu te, ata oluki esika azali, okomono ye lisusu te.
Psal LinVB 37:11  Kasi bato babola bakozwa mokili, bakosepela na boboto nsuka te.
Psal LinVB 37:12  Soko moto mabe akaneli moto semba, mpe alakisi ye mino na nkanda,
Psal LinVB 37:13  Mokonzi akoseke ye, zambi asili amoni mokolo akozwa etumbu.
Psal LinVB 37:14  Bato babe babimisi mompanga, batandi litimbo mpo ’te baboma basemba, babola mpe baye bazali na makasi te.
Psal LinVB 37:15  Nzokande mompanga mokotubola mitema mya bango moko, matimbo ma bango makobukana.
Psal LinVB 37:16  Mwa mosolo moke mwa moto semba, moleki nkita enene ya mosumuki.
Psal LinVB 37:17  Zambi maboko ma mosumuki makobukana, kasi Mokonzi akolendisa basemba.
Psal LinVB 37:18  Nzambe akobatelaka bomoi bwa basemba, lisango lya bango likoumela seko.
Psal LinVB 37:19  O mikolo mya mpasi bakoyoka nsoni te, o mikolo mya nzala enene bakolia mpe bakotonda.
Psal LinVB 37:20  Nzokande basumuki bakokufa, banguna ba Nzambe bakosila, lokola matiti ma esobe mpe lokola milinga.
Psal LinVB 37:21  Moto mabe akodefa kasi akozongisaka te, moto semba azali motema ngolu mpe akokabaka.
Psal LinVB 37:22  Baye Nzambe akobenisa, bakozwa mokili. Baye akotombela bobe, bakokufa.
Psal LinVB 37:23  Mokonzi akokamba moto o nzela ya ye, soko ezalela ya ye esepelisi ye.
Psal LinVB 37:24  Soko akwei, akotikala kolala o mabelé te, zambi Mokonzi asili asimbi ye na loboko.
Psal LinVB 37:25  Nazalaki mwana, sikawa nakomi mobange, namoni naino te ’te Nzambe akotika basemba to bankoko ba bango bakende kosenge limpa.
Psal LinVB 37:26  Oyo akoyokaka ngolu, akodefisaka, libota lya ye likoumela seko !
Psal LinVB 37:27  Kima lisumu mpe sala malamu mpe okozwa esika ya kofanda seko.
Psal LinVB 37:28  Zambi Mokonzi alingi bosembo, akotika bato ba ye te, akobatelaka bango ntango inso ; kasi akosilisa bato babe na mpe libota lya bango mobimba.
Psal LinVB 37:29  Bato ba bosembo bakokoma bankolo ba Ekolo, bakofanda kuna mikolo minso seko.
Psal LinVB 37:30  Monoko mwa moto semba mokosakola bwanya, maloba ma ye se maloba ma bosembo.
Psal LinVB 37:31  Soko atosi mobeko mwa Nzambe na motema moko, makolo ma ye makozonga nsima te.
Psal LinVB 37:32  Baye baboya Nzambe bakonongoko moto wa bosembo, mpe bakolukaka mayele ma koboma ye.
Psal LinVB 37:33  Kasi Nzambe akotika ye o maboko ma bango te, akolingisa te ’te bakitisa ye o likambo.
Psal LinVB 37:34  Tia elikya na Mokonzi mpe landa nzela ya ye, ye akolendisa yo mpo okoma o Ekolo, mpe okomono ’te banyokoli bakosila.
Psal LinVB 37:35  Namonoki moto mabe akomi monyokoli, akoli se bokoli, lokola sédere ya Libano.
Psal LinVB 37:36  Na nsima, ntango naleki, azalaki lisusu te, asili alimwi, naluki ye, kasi namoni ye lisusu te.
Psal LinVB 37:37  Tala mpe bato babongi, bato ba bosembo, bato ba boboto bakozala na bana baike.
Psal LinVB 37:38  Kasi basumuki banso bakokufa, mpe libota lya baye baboya Nzambe likosila.
Psal LinVB 37:39  Libiki lya basemba likouta epai ya Mokonzi, ye azali ebombamelo ya bango o ntango ya nsomo.
Psal LinVB 37:40  Nzambe akosalisaka mpe akobatelaka bango, akolongola bango o maboko ma bato babe, akobikisa bango, mpo batii elikya na ye.
Chapter 38
Psal LinVB 38:2  E Mokonzi, otumbola ngai na nkanda te, opesa ngai etumbu na nkele te.
Psal LinVB 38:3  Ozokisi ngai na makula ma yo, obeti ngai makasi na loboko la yo.
Psal LinVB 38:4  Nzoto ya ngai mobimba ezoki mpo ya nkanda ya yo, minkuwa minso milembi mpo ya masumu ma ngai.
Psal LinVB 38:5  Nyongo ya masumu eleki motó mwa ngai, ekomi lokola mokumba monene nasengeli komeme.
Psal LinVB 38:6  Nakomi na mpota ilumbi lokola bipoli mpo ya bolema bwa ngai moko.
Psal LinVB 38:7  Nagumbami, nabukani mpe nalembi, nalati mawa ma ngai lokola mpili.
Psal LinVB 38:8  Motema mwa ngai moyoki molunge, nzoto mobimba ekomi mpota mpota.
Psal LinVB 38:9  Nabukani, bokasi bosili nye, motema motomboki mpe naleli makasi.
Psal LinVB 38:10  E Mokonzi, oyebi manso motema mwa ngai molingi, obungi bokimeli bwa ngai soki moke te.
Psal LinVB 38:11  Motema mokomi kobete makasi, nalembi, miso ma ngai makomi molili.
Psal LinVB 38:12  Bayebani na baninga ba ngai bakimi mpota ya ngai, ata bandeko balingi kokoma penepene na ngai te.
Psal LinVB 38:13  Baye balingi koboma ngai, batieli ngai mitambo ; baye baluki kosala ngai mabe, bakaneli ngai, mokolo na mokolo bakotongoko ngai.
Psal LinVB 38:14  Lokola moto akufa matoi, nalingi koyoka mango te, lokola ebubu nafungoli monoko te.
Psal LinVB 38:15  Nakomi lokola moto ayoki eloko te, mpe akoki kozongisa eyano te.
Psal LinVB 38:16  Elikya ya ngai, bobele yo, Mokonzi, yo okoyanola ngai, Mokonzi Nzambe wa ngai.
Psal LinVB 38:17  Namilobeli : « Baseke ngai te, baye bakosepelaka soko nakwei ! »
Psal LinVB 38:18  Nzokande nalingi nakweya, mpasi ezali se konyokolo ngai.
Psal LinVB 38:19  Solo, nandimi : nasakoli mabe ma ngai mpe nabangi mpo ya masumu ma ngai.
Psal LinVB 38:20  Banguna ba ngai bazali makasi, baye bayini ngai mpamba baleki mingi.
Psal LinVB 38:21  Baye bakozongiselaka ngai mabe ata nasali malamu, bafundi ngai soko nalingi kosala malamu.
Psal LinVB 38:22  E Mokonzi, otika ngai te, Nzambe wa ngai, otikala mosika na ngai te.
Psal LinVB 38:23  Yaka kosalisa ngai noki, yo Mokonzi mpe mobikisi wa ngai.
Chapter 39
Psal LinVB 39:1  Ya kapita wa bayembi, Yedutun. Nzembo ya Davidi.
Psal LinVB 39:2  Nalobaki : Nakobatela ezalela ya ngai, mpo ’te nasala mabe na monoko te, nakokanga monoko soko mosumuki azali pene na ngai.
Psal LinVB 39:3  Yango wana natikaki koloba, nafandaki nye ; nzokande bomengo bwa moto mabe boyokisi ngai mpasi.
Psal LinVB 39:4  Motema mwa ngai mokomaki móto, móto mopeli o motema ntango nakanisi yango, yango wana nafungoli monoko mpe nalobi :
Psal LinVB 39:5  « E Mokonzi, lakisa ngai mokolo nini nakokufa, mpe mikolo boni nakozala naino na bomoi, nayeba bongo ’te nazali bobele eloko mpamba.
Psal LinVB 39:6  Opesi ngai bomoi bokuse lokola loboko la moto, o miso ma yo mikolo mya ngai mizali eloko te. Solo, moto nyonso azali se mompepe :
Psal LinVB 39:7  nzela ya ye ezali se elilingi, nkita ya ye ekolimwa lokola mpema ; biloko asangisi, ayebi te nani akozwa byango. »
Psal LinVB 39:8  Yango wana, Mokonzi, nazila lisusu nini ? Nakotia elikya ya ngai se na yo.
Psal LinVB 39:9  Bikisa ngai o masumu manso, ondima te ’te bazoba batiola ngai.
Psal LinVB 39:10  Nakokanga monoko, nakoloba lisusu te, zambi yo moto osalaki bongo.
Psal LinVB 39:11  Ekoki bongo, tika kobete ngai, soki te nakokufa.
Psal LinVB 39:12  Okopalelaka moto mpo ’te obongisa ye, lokola mapaka okobebisaka biloko ye alingi ; solo, moto nyonso azali se mompepe mpamba !
Psal LinVB 39:13  E Mokonzi, yoka losambo la ngai, tia matoi na boleli bwa ngai, okanga matoi te, zambi o ndako ya yo nazali se mompaya, nazali koleka se boleki lokola bankoko ba ngai.
Psal LinVB 39:14  Tika kotala ngai mpo nayoka esengo lisusu liboso ’te nakende mpe nalimwa seko.
Chapter 40
Psal LinVB 40:2  Natiaki motema mobimba na Mokonzi, asunami epai ya ngai mpe ayoki boleli bwa ngai.
Psal LinVB 40:3  Alongoli ngai o libulu lya liwa, o esika ya potopoto epai nazindaki, atelemisi ngai lisusu o mabelé makasi mpe alendisi makolo ma ngai.
Psal LinVB 40:4  Atii o monoko mwa ngai nzembo ya sika nzembo ya bokumisi Nzambe wa biso. Moto nyonso ayeba yango mpe abanga, bongo atia motema na Mokonzi.
Psal LinVB 40:5  Esengo na moto oyo akolikya na Mokonzi, oyo alandi bato ba lolendo te, to baye babungami o nzela ya lokuta.
Psal LinVB 40:6  E Mokonzi Nzambe wa ngai, osalaki makamwa maike, maye obongiseli biso, moto moko te akokani na yo ! Nalingi kosakola mpe koloba mango lisusu, kasi maleki mingi, nakoki kotanga mango manso te.
Psal LinVB 40:7  Olingaki libonza to moboma te, kasi ofungolaki ngai matoi mpo ’te nayoka malamu, osengeki libonza lya kotumba to lya kofuta nyongo te.
Psal LinVB 40:8  Yango wana nalobi : « Ngai oyo nazali koya ! Eye ekomami o buku ekoki na ngai :
Psal LinVB 40:9  Nzambe wa ngai, nalingi kosala maye yo olingi, mobeko mwa yo mokomami kin’o kati ya motema. »
Psal LinVB 40:10  O lisanga linene nasakoli bosembo bwa Mokonzi, solo, nakangi monoko te, oyebi yango malamu.
Psal LinVB 40:11  Nabombi bosembo bwa yo o kati ya motema te, nasakoli lobokó mpe libiki lya yo. Nabangi kosolola bolingi na bosolo bwa yo te o lisanga linene lya bankumu.
Psal LinVB 40:12  Yo Mokonzi, opima ngai ngolu ya yo te, obatela ngai ntango inso na bolingi mpe na bosolo bwa yo.
Psal LinVB 40:13  Malozi maike mayeli ngai ntango inso, masumu ma ngai makweli ngai o motó, maleki boike, nakoki koyeba mango lisusu te, masumu maleki nsuki ya motó mwa ngai na boike, mpe motema mwa ngai molembi nye.
Psal LinVB 40:14  E Nzambe, ondima kobikisa ngai, e Mokonzi, yaka kosikola ngai noki.
Psal LinVB 40:15  Baye balingi koboma ngai basambwa mpe bayoka nsoni ! Baye basepeli na mpasi ya ngai bazonga nsima mpe bakima na nsoni !
Psal LinVB 40:16  Baye bawuloli ngai bakokende kobombama, bayoka nsoni !
Psal LinVB 40:17  Kasi bato banso bakolukaka yo, basepela mpe bayoka esengo mpo ya yo ! Baye banso balingi libiki lya yo, baloba ntango inso : « Nzambe azali monene ! »
Psal LinVB 40:18  Ngai nazali mobola mpe moto wa mawa, e Mokonzi, okanisaka ngai, Yo mosalisi mpe mobikisi wa ngai, e Nzambe wa ngai, oumela te.
Chapter 41
Psal LinVB 41:2  Esengo na moto akokanisaka babola na bato ba mawa : o mokolo mwa mpasi Mokonzi akobikisa ye.
Psal LinVB 41:3  Nzambe akobatela ye, akopesa ye bolamu o nse, akokaba ye o maboko ma banguna ba ye te.
Psal LinVB 41:4  Ntango akomi kobele, Mokonzi akosalisa ye, mpe akobikisa ye o bokono malalisi ye o mbeto.
Psal LinVB 41:5  Nalobaki : « Mokonzi, yokela ngai mawa ! Bikisa ngai, ata natumboli yo na masumu ma ngai ! »
Psal LinVB 41:6  Banguna batombeli ngai makambo mabe : « Akokufa mokolo nini mpo ’te nkombo ya ye esila ? »
Psal LinVB 41:7  Baye bayei kotala ngai, balobi makambo ma mpamba, kasi ekomi bango o libanda, batambwisi makambo ma ngai na motema mabe.
Psal LinVB 41:8  Baye bayini ngai bakomi kolobana malembe : « Azali kobele mpo masumu ma ye maleki,
Psal LinVB 41:9  mpasi makasi ekangi ye, akolongwa o mbeto lisusu te. »
Psal LinVB 41:10  Moto oyo nalingaki mpe natiaki motema na ye, oyo aliaki o meza ya ngai atombokeli ngai.
Psal LinVB 41:11  Kasi yo, Mokonzi, yokela ngai mawa, telemisa ngai, nakozongisela bango maye basali ngai.
Psal LinVB 41:12  Nakoyeba ’te olingi ngai solo soko monguna anyokoli ngai lisusu te.
Psal LinVB 41:13  Na lisalisi lya yo nakolenda lisusu mpe okopesa ngai bomoi o miso ma yo seko.
Psal LinVB 41:14  Bakumisa Mokonzi Nzambe wa Israel o bileko na bileko. Amen ! Amen !
Chapter 42
Psal LinVB 42:2  Lokola mbuli ekolukaka mai ma komele, motema mwa ngai mozali koluka yo, Nzambe.
Psal LinVB 42:3  Motema mwa ngai mozali koyoka mposa ya Nzambe, ye ntina ya bomoi bwa ngai ; mokolo nini nakokoma o miso ma Mokonzi ?
Psal LinVB 42:4  Butu moi nazali kolela, mpo mikolo minso bazali kotuna ngai : « Wapi Nzambe wa yo ? »
Psal LinVB 42:5  Soko nakanisi bongo, molimo mwa ngai mokomi kolela ; nazalaki kokende o ndako ya Nta-Likolo, o ndako ya Nzambe, elongo na bato ebele bayokaki nsai mpe bayembaki nzembo ya bokumisi.
Psal LinVB 42:6  Motema mwa ngai, mpo nini olembi boye ? Mpo nini ozali kokimela mpo ya ngai ? Tia elikya na Nzambe, nakokumisa ye lisusu, ye mobikisi mpe Nzambe wa ngai.
Psal LinVB 42:7  Motema mwa ngai molembi, nakanisi yo lisusu, ut’o mokili mwa Yordane mpe ngomba Ermon.
Psal LinVB 42:8  Mbonge ya mai ilandani na lokito, itomboki makasi mpo ya kozindisa ngai.
Psal LinVB 42:9  Mokonzi atindela ngai lisalisi lya ye na moi, mpe na butu nayembela Nzambe, ye ntina ya bomoi bwa ngai.
Psal LinVB 42:10  Nzambe azali libanga likobikisa ngai ; natuna ye : « Mpo nini obosani ngai ? Mpo nini nayoka se mawa ? Mpo nini nanyokwami bongo na banguna ? »
Psal LinVB 42:11  Banyokoli bazokisi ngai motema na mafinga, mikolo minso batuni ngai : « Wapi Nzambe wa yo ? »
Psal LinVB 42:12  Motema mwa ngai, mpo nini olembi boye ? Mpo nini ozali kokimela mpo ya ngai ? Tia elikya na Nzambe, nakokumisa ye lisusu, ye mobikisi mpe Nzambe wa ngai !
Chapter 43
Psal LinVB 43:1  E Nzambe, kata likambo lya ngai na bosembo, sambela ngai likambo lya ngai ! Bikisa ngai o maboko ma bakosi mpe o mitambo mya basuli.
Psal LinVB 43:2  E Nzambe, yo ebombamelo ya ngai te ? Bongo mpo nini oboyi ngai ? Ntina nini nayoka se mawa ? Mpo nini nanyokwami bongo na banguna ?
Psal LinVB 43:3  Lakisa ngai mwinda mpe bosolo bwa yo, yango ikamba ngai, ikende na ngai kin’o ngomba ya yo esantu, esika yo ofandi.
Psal LinVB 43:4  Bongo nakobeleme na altare ya Nzambe, ye ntina ya esengo ya ngai. Motema nsai nakoyembela ye na lokombe nzembo ya botondi Nzambe, Nzambe wa ngai.
Psal LinVB 43:5  Motema mwa ngai, mpo nini olembi boye ? Mpo nini ozali kokimela mpo ya ngai ? Tia elikya na Nzambe : nakokumisa ye lisusu, ye mobikisi wa ngai mpe Nzambe wa ngai !
Chapter 44
Psal LinVB 44:2  E Nzambe, toyokaki na matoi, bankoko bayebisaki biso maye osalaki o ntango ya bango, o mikolo mya kala.
Psal LinVB 44:3  Mpo ’te opesa bango esika ya kofanda, obengani bankolo ba mikili ; mpo ’te bakoma na bonsomi, onyokoli bato ba bikolo bisusu.
Psal LinVB 44:4  Bazwaki mokili na bokasi bwa mompanga te, balongaki etumba na bokasi bwa maboko te, kasi balongaki se na bokasi bwa loboko la yo la mobali mpe na mwinda mwa elongi ya yo, zambi olingaki bango.
Psal LinVB 44:5  E Nzambe, yo ozali Mokonzi wa ngai, opesaki etinda mpo ’te bato ba Yakob balonga.
Psal LinVB 44:6  Na bokasi bwa yo tokweisaki banguna ba biso, na lisalisi lya yo tonyataki baye bayelaki biso etumba.
Psal LinVB 44:7  Natiaki motema na litimbo lya ngai te, nalongaki bango na mompanga mwa ngai te.
Psal LinVB 44:8  Mpo ya yo tolongaki banguna ba biso, oyokisaki bango nsoni mpenza.
Psal LinVB 44:9  Toyembelaki Nzambe nzembo mikolo minso, tokumisaki nkombo ya yo ntango inso.
Psal LinVB 44:10  Nzokande obwaki mpe okitisaki biso, ozali kokamba basoda ba biso lisusu te.
Psal LinVB 44:11  Ozongisaki biso nsima o etumba bayelaki biso, na esengo banguna babotoli biso biloko.
Psal LinVB 44:12  Okabaki biso lokola nyama balingi baboma, opanzaki biso o kati ya bikolo bisusu.
Psal LinVB 44:13  Otekeki bato ba yo na motuya moke, mpe na mombongo mona ozwi litomba te.
Psal LinVB 44:14  Oyokisi biso nsoni o miso ma bato ba bikolo pene na biso, baye bafandi pene na biso bazali koseke mpe kotiola biso.
Psal LinVB 44:15  Nkombo ya biso ekomi nzembo o monoko mwa bampaya, bato ba bikolo bisusu bakokinolaka biso.
Psal LinVB 44:16  Mikolo minso nazali komono ndenge nasambwi, mpe nazipi elongi ya ngai mpo ya nsoni,
Psal LinVB 44:17  mpo ya baye bafingi mpe batuki ngai, balakisi ngai boyini mpe bobekoli.
Psal LinVB 44:18  Mana manso makwelaki biso, ata tobosanaki yo te, ata tobomaki bondeko na yo te.
Psal LinVB 44:19  Mitema mya biso miboyaki yo te, makolo ma biso malongwaki o nzela ya yo te.
Psal LinVB 44:20  Onyataki biso o ekolo ezangi mboka, ozipaki biso na molili mwa liwa.
Psal LinVB 44:21  Soko tobosanaki nkombo ya Nzambe wa biso, soko totandelaki nzambe wa lokuta maboko,
Psal LinVB 44:22  mbele Nzambe ayebaki yango, oyo ayebi maye manso mabombami o motema.
Psal LinVB 44:23  Mpo ya yo, balingi koboma biso mikolo minso mpe bakosalaka na biso lokola mpata iye balingi baboma.
Psal LinVB 44:24  E Mokonzi, lamuka, mpo nini olali mpongi ? Longwa o mpongi, obwaka biso seko te.
Psal LinVB 44:25  Mpo nini obombi elongi ya yo ? Obosani nde mpasi mpe minyoko mya biso ?
Psal LinVB 44:26  Tala, tokwei o kati ya mputulu, tolali banso mabumu o potopoto.
Psal LinVB 44:27  Teleme mpe yaka kosalisa biso, sikola biso mpo ya bolingi bwa yo !
Chapter 45
Psal LinVB 45:1  Ya kapita wa bayembi ; lolenge loko na ‘Fulele ya lisi’. Mateya ma bana ba Kore ; nzembo ya libala.
Psal LinVB 45:2  Motema mwa ngai mosepeli na nsango ya esengo, nakoyembela mokonzi nzembo ya ngai : lolemu la ngai lozali lokola ekomeli ya mokomi wa solo.
Psal LinVB 45:3  Oleki bato banso na kitoko, elongi ya yo engengi na bonzenga, yango wana Nzambe abenisi yo seko.
Psal LinVB 45:4  Elombe, kanga mompanga o loketo la yo, olata lokumu mpe nkembo ya yo.
Psal LinVB 45:5  Butela farasa mpe kende kobunda na mpiko, mpo ya kolongisa bosolo, boboto mpe bosembo. Sala misala mya nsomo na loboko la yo.
Psal LinVB 45:6  Bete makula mapotu ma yo, kweisa bato ba bikolo bisusu o nse ya makolo ma yo, lembisa banguna ba mokonzi.
Psal LinVB 45:7  Ngwende Nzambe apesi yo ekoumela seko, elembo ya bokonzi bwa yo, nde bosembo.
Psal LinVB 45:8  Olingi bosembo mpe oyini makambo mabe, yango wana Nzambe aponi yo mpo apakola yo mafuta ma esengo, leka baninga ba yo.
Psal LinVB 45:9  Bilamba bya yo bizali na nsolo mpimbo ya malasi, o ndako ya yo ya nkembo se miziki mya esengo.
Psal LinVB 45:10  O kati ya bilenge basi ba yo bana ba bakonzi bazali, mama mokonzi atelemi o loboko la yo la mobali, alati bilamba bitongami na wolo ya Ofir.
Psal LinVB 45:11  Yoka, elenge mwasi, tala mpe tia matoi, obosana ekolo mpe libota lya yo,
Psal LinVB 45:12  bongo mokonzi ndaluli bonzenga bwa yo ! Fukamela ye, zambi azali mokonzi wa yo.
Psal LinVB 45:13  Yo, elenge mwasi wa Tiro, bato banene bakoya kobondela yo na mabonza.
Psal LinVB 45:14  Na lipombo mwana wa mokonzi ayingeli o ndako, alati elamba etongami na nsinga ya wolo.
Psal LinVB 45:15  Bakembisi ye na biloko ndenge na ndenge, bakambi ye epai ya mokonzi. Bilenge basi, baninga ba ye, balandi ye, bakotisi bango epai ya mokonzi.
Psal LinVB 45:16  Bayei na bango na esengo enene, mpe banso bayingeli o ndako enene ya mokonzi.
Psal LinVB 45:17  Bana okobota bakokitana batata ba yo, okokomisa bango bakonzi o mokili mobimba.
Psal LinVB 45:18  Nakumisa nkombo ya yo o bileko binso, bato ba bikolo binso bakumisa yo seko.
Chapter 46
Psal LinVB 46:1  Ya kapita wa bayembi. Ya bana ba Kore ; bayemba yango na eyembeli ya mpiololo.
Psal LinVB 46:2  Nzambe azali ebombamelo mpe nguya ya biso, akosalisaka biso o mikolo mya mpasi.
Psal LinVB 46:3  Ata mokili moningani, tokobanga te, ata ngomba ikwei kin’o bozindo bwa mbu,
Psal LinVB 46:4  ata mai ma mbu matoki mpe matomboki, mpe ngomba ikomi kolenge makasi mpo ya mbonge.
Psal LinVB 46:5  Moluka moko mozali kosepelisa engumba ya Nzambe, esika nta esantu ya Mokonzi wa likolo.
Psal LinVB 46:6  Nzambe azali wana, o mboka ekoningana te, banda ntongo Nzambe akosalisaka yango.
Psal LinVB 46:7  Bikolo bitomboki mpe bakonzi bakwei, ye atomboli mongongo mpe mokili molengi.
Psal LinVB 46:8  Mokonzi wa bokasi bonso azali na biso, Nzambe wa Yakob azali ebombamelo ya biso.
Psal LinVB 46:9  Bokende kotala bikela bya Mokonzi, atondisi mokili na nsomo.
Psal LinVB 46:10  Asilisi bitumba o nse mobimba, abuki litimbo na likongo, atumbi makalo.
Psal LinVB 46:11  Agangi : « Ekoki bongo, boyeba ’te nazali Nzambe, nazali likolo lya bikolo binso, likolo lya nse mobimba. »
Psal LinVB 46:12  Mokonzi wa bokasi bonso azali na biso, Nzambe wa Yakob azali ebombamelo ya biso.
Chapter 47
Psal LinVB 47:2  Bato ba bikolo binso, bobete maboko, boyembela Nzambe na esengo enene !
Psal LinVB 47:3  Zambi Nzambe, Mokonzi wa Likolo azali elombe, ye Mokonzi monene wa nse mobimba.
Psal LinVB 47:4  Asali ’te bato banso batosa biso, atii bango o nse ya makolo ma biso.
Psal LinVB 47:5  Aponeli biso mokili moko bo lisango, lokumu la Yakob, oyo akolingaka mingi.
Psal LinVB 47:6  Nzambe abuti o likolo mpe babeteli ye maboko, ye Mokonzi, babeteli ye mindule.
Psal LinVB 47:7  Boyembela Nzambe, boyemba, boyembela Mokonzi wa biso, boyemba.
Psal LinVB 47:8  Boyembela Nzambe nzembo ya bino, Ye mokonzi monene wa nse mobimba !
Psal LinVB 47:9  Nzambe akoyangelaka bikolo binso, afandi o ngwende ya ye esantu.
Psal LinVB 47:10  Bankumu ba bikolo bayei kosangana elongo na ekolo ya Nzambe wa Abarama. Solo, Nzambe azali mokonzi wa bankumu ba nse, ye aleki bango banso mosika.
Chapter 48
Psal LinVB 48:2  E Mokonzi, oleki bonene, bakumisa yo o engumba ya yo, Nzambe wa biso, o ngomba ya yo esantu.
Psal LinVB 48:3  Bato ba nse mobimba basepeli bonzenga bwa yo, ngomba Sion o Nordi, engumba ya mokonzi monene.
Psal LinVB 48:4  O ebombamelo ya Sion Nzambe amilakisi lokola mobateli wa engumba.
Psal LinVB 48:5  Tala, bakonzi bayokani, banso lisanga bayei kobunda.
Psal LinVB 48:6  Kasi emoni bango engumba, bayoki nsomo o mitema, babulungani mpe bakimi.
Psal LinVB 48:7  Babandi kolenge na mbalakaka, lokola mpasi ya mwasi alingi abota,
Psal LinVB 48:8  lokola mompepe makasi mwa Esti mobuki masuwa ma Tarsis.
Psal LinVB 48:9  Manso toyokaki liboso, tomoni mango sikawa, o engumba ya Nzambe wa biso, o engumba ya Mokonzi wa bokasi bonso ; Nzambe akobatelaka yango ntango inso.
Psal LinVB 48:10  E Nzambe, tokomanyolaka bolingi bwa yo o Tempelo ya yo esantu !
Psal LinVB 48:11  E Nzambe, nkombo mpe lokumu la yo ipalangani kin’o nsuka ya mokili. Na loboko la yo okobatelaka bosembo.
Psal LinVB 48:12  Ngomba Sion eyoki nsai enene, bingumba bya Yuda bipimbwi na esengo mpo ya motindo okokataka makambo.
Psal LinVB 48:13  Botambola zongazonga na Sion, mpe botanga manongi ma yango.
Psal LinVB 48:14  Botala lopango lonene lozingi engumba, botanga ndako ya yango inene, bongo bokoka kosakola na bankoko ba bino
Psal LinVB 48:15  ’te Nzambe oyo azali Nzambe wa biso seko, ye moto akoyangelaka biso.
Chapter 49
Psal LinVB 49:2  Bato ba bikolo binso, boyoka likambo, bato ba nse mobimba, botia matoi,
Psal LinVB 49:3  bato bake ná bato ba lokumu, bato ba nkita ná babola !
Psal LinVB 49:4  Nalingi koloba maloba ma bwanya, mpe komanyola makanisi ma mayele o motema.
Psal LinVB 49:5  Nafungoli matoi mpo ’te nayoka liloba lya bwanya mpe nalimbola biyele na nzembo ya lokombe.
Psal LinVB 49:6  Mpo nini nabanga o mikolo mya mpasi, ntango bato babe bazingi ngai na mayele mabe,
Psal LinVB 49:7  baye bakotiaka mitema na nkita ya bango, mpe bakofundaka na mosolo mwa bango ?
Psal LinVB 49:8  Moto moko te akoki kosomba libiki, to kofuta Nzambe mpo ’te amisikola.
Psal LinVB 49:9  Ata moto akofuta mosolo boni mpo ’te abika, bomoi bwa ye bokosila se bosili.
Psal LinVB 49:10  Moto moko akoki nde kotikala na bomoi seko ? Bongo amono lilita lya ye mokolo moko te ?
Psal LinVB 49:11  Tokomonoko ’te bato ba bwanya bakokufa, se lokola bazoba na bato bazangi mayele. Bakotikela bato basusu biloko bya bango.
Psal LinVB 49:12  Ndako ya bango ya seko : lilita, bakofanda wana o bileko na bileko, ata bapesaki nkombo ya bango na mabelé ma bango.
Psal LinVB 49:13  Moto akoumela seko na nkita ya ye te, aulani na nyama eye bakobomaka.
Psal LinVB 49:14  Bato bakolikyaka na bango moko bakosuka se bongo, tala nsuka ya bato bakosepelaka na maloba ma bango moko.
Psal LinVB 49:15  Bakokende o mboka ya bawa lokola mpata, liwa likokoma mokengeli wa bango. Bakokita na mbalakaka o lilita, elili ya bango ekolimwa o mboka ya bawa, eye ekokoma ndako ya bango.
Psal LinVB 49:16  Kasi Nzambe akobikisa molimo mwa ngai, o mboka ya bawa akokamata ngai pene na ye.
Psal LinVB 49:17  Obanga lisusu te soko moto azwi nkita enene mpe soko akolisi nkembo ya ndako ya ye :
Psal LinVB 49:18  o ntango ya liwa akokende na eloko yoko te, mpe lokumu la ye lokolanda ye o lilita te.
Psal LinVB 49:19  O ntango ya bomoi azalaki komikumisa, mpo akomaki na lokumu na nkita azwaki,
Psal LinVB 49:20  kasi akokende bobele kokutana na bandeko ba ye, baye bakomono lisusu mwinda mokolo moko te.
Psal LinVB 49:21  Soko moto wa nkita akanisi lisusu eloko te, akosuka se lokola nyama eye bakobomaka.
Chapter 50
Psal LinVB 50:1  Nzembo ya Asaf. Nzambe wa banzambe, Mokonzi alingi aloba, abyangi bato banso ba nse, ut’o epai moi mokobimaka kin’o epai mokokitaka.
Psal LinVB 50:2  Ut’o Sion, ngomba kitoko, Nzambe azali kongenge.
Psal LinVB 50:3  Nzambe wa biso ayei, akotika kokanga monoko ! O boso bwa ye móto mozali kosilisa binso, mompepe makasi mozali kopepe zongazonga na ye.
Psal LinVB 50:4  Abyangi likolo na nse mpo ’te asamba makambo ma bato ba ye :
Psal LinVB 50:5  « Bosangisa basaleli ba ngai banso, baye babonzaki libonza mpo ya kokata bondeko na ngai. »
Psal LinVB 50:6  Likolo likosakola bosembo bwa ye : « Nzambe ye moko akozala zuzi ! »
Psal LinVB 50:7  « Boyoka, bino bato ba ngai, nakoloba ; Israel, nakofunda yo polele, ngai nazali Nzambe, Nzambe wa yo !
Psal LinVB 50:8  Nakofunda yo te mpo ya mabonza ma yo, nakoyokaka nsolo ya miboma mya yo ntango inso.
Psal LinVB 50:9  Nákamata nde ngombe o lopango la yo, to ntaba mobali ya etonga ya yo ?
Psal LinVB 50:10  Nyama inso ya zamba izali ya ngai, ná mpe nyama ebele ikozalaka o ngomba.
Psal LinVB 50:11  Nayebi ndeke inso ya ngomba, mpe nyama inso ya esobe izali ya ngai.
Psal LinVB 50:12  Soko nayokaki nzala, mbele nayebisaki yo te, mpo nse mobimba na biloko bya yango binso bizali bya ngai.
Psal LinVB 50:13  Ngai nakoliaka nde mosuni mwa ngombe ? Nakomeleke nde makila ma ntaba ?
Psal LinVB 50:14  Bonzela Nzambe libonza lya botondi ye, kokisa bilako olakelaki Nta-Likolo.
Psal LinVB 50:15  Obelela ngai o mikolo mya mpasi, mpo ’te nabikisa yo mpe okumisa ngai. »
Psal LinVB 50:16  Kasi Nzambe alobi na moto mabe : « Mpo nini okotangaka mibeko mya ngai mpe okokundolaka bondeko bwa ngai,
Psal LinVB 50:17  yo moto oboyi mobeko nyonso mpe obwaki maloba ma ngai ?
Psal LinVB 50:18  Soko omoni moyibi, okei koyokana na ye, mpe okofandaka esika yoko na bato ba ekobo.
Psal LinVB 50:19  Monoko mwa yo motondi na maloba mabe, mpe na lolemu ozali se kokosa.
Psal LinVB 50:20  Soko ofandi, otongi ndeko wa yo, obebisi lokumu la mwana wa mama wa yo.
Psal LinVB 50:21  Tala makambo okosalaka, bongo ngai naloba te ? Okanisi solo ’te nazali lokola yo ? Nakolakisa yo mabe ma yo polele.
Psal LinVB 50:22  Bino bato bokobosanaka Nzambe, bokeba ! Soko nakopesa bino etumbu, moto moko akobikisa bino te.
Psal LinVB 50:23  Oyo abonzi libonza mpo ya kotondo ngai, akokumisa ngai, oyo alandi nzela semba, nakobikisa ye. »
Chapter 51
Psal LinVB 51:2  O mokolo profeta Natan akei kopalela Davidi, zambi akendeki epai ya Betsabe (2 Sam 11-12).
Psal LinVB 51:3  E Nzambe, oleki bolamu, yokela ngai mawa ! Yo nta ngolu, olongola lisumu lya ngai !
Psal LinVB 51:4  Sukola mbindo ya ngai inso, petola ngai, zambi nasali lisumu.
Psal LinVB 51:5  Solo, nayebi ’te nasali mabe, ntango inso nakokanisaka mabe ma ngai.
Psal LinVB 51:6  Natumolaki yo mpenza na masumu, nasali maye mazali mabe o miso ma yo. Okokataka makambo na bosembo, okokitisa moto moko mpamba te.
Psal LinVB 51:7  Ut’o mokolo babotaki ngai, nazali moto mabe, ut’o libumu lya mama nazali mosumuki.
Psal LinVB 51:8  Kasi olingi ’te moto azala na bosolo, bongo lakisa bwanya bwa solo.
Psal LinVB 51:9  Sukola ngai na mai ma malasi, nakoma peto, petola ngai nakoma peto mpenza.
Psal LinVB 51:10  Sala ’te nayoka lisusu mingongo mya bato bazali na nsai, lendisa makolo ma ngai maye obukaki, nabina lisusu.
Psal LinVB 51:11  Otala masumu ma ngai lisusu te, longola mbindo ya mabe ma ngai manso.
Psal LinVB 51:12  E Nzambe, komisa motema mwa ngai peto, zongisela molimo mwa ngai nguya ya sika.
Psal LinVB 51:13  Obengana ngai mosika na yo te, opima ngai elimo ya yo esantu te.
Psal LinVB 51:14  Zongisela ngai esengo ya libiki lya yo, lendisa ngai, pesa ngai motema mwa mpiko.
Psal LinVB 51:15  Bongo nalakisa basumuki nzela ya yo, bato babungi nzela bazonga epai ya yo.
Psal LinVB 51:16  Nzambe mobikisi wa ngai, bikisa ngai o liwa, mpo ’te nasakola bosembo bwa yo na monoko.
Psal LinVB 51:17  Mokonzi, fungola monoko mwa ngai mpo nasakola lokumu la yo.
Psal LinVB 51:18  Okosepelaka te na miboma babonzeli yo, okoboyaka mabonza ma botumbi.
Psal LinVB 51:19  Libonza lya ngai, nde motema moyoki mawa, motema bosawa, motondi na mawa, e Nzambe, okoboyaka mwango te.
Psal LinVB 51:20  Opesa Sion bolamu mpo ya bolingi bwa yo bonene, otonga lisusu bifelo bya Yeruzalem.
Psal LinVB 51:21  Bongo okosepela lisusu na mabonza mpe na nyama batumbi, bana ba ngombe babonzi o altare ya yo.
Chapter 52
Psal LinVB 52:2  O mokolo Doeg, moto wa Edom, ayei koyebisa Saul : « Davidi akoti o ndako ya Akimelek » (1 Sam 21,8).
Psal LinVB 52:3  Yo elombe, mpo nini okofundaka na mabe ma yo ? Bolingi bwa Nzambe bokosukaka te !
Psal LinVB 52:4  Okolukaka se kobebisa, lolemu la yo lozali lokola lotebu lopotu, lokolukaka se kokosa ntango inso.
Psal LinVB 52:5  Olingi kosala mabe, oboyi kosala malamu, olingi lokuta mingi, otiki maloba ma bosolo.
Psal LinVB 52:6  Olingi kozokisa mitema na maloba, mosala mwa lolemu la yo, se kokosa.
Psal LinVB 52:7  Yango wana Nzambe akonyata yo, akosukisa yo seko, akolongola yo o ema ya ye, akopikola yo o mokili mwa bato.
Psal LinVB 52:8  Emoni basemba bongo, bakolenge, bakoseke yo mpe bakoloba :
Psal LinVB 52:9  « Tala elombe aboyaki lisalisi lya Nzambe, azalaki kotia motema na nkita ya ye, mpe kofunda na mabe asalaki ! »
Psal LinVB 52:10  Kasi ngai nakotia elikya na bolingi bwa Nzambe seko, nazali lokola nzete ebesu ya oliva o ndako ya Nzambe.
Psal LinVB 52:11  Nakotondo yo ntango inso, zambi osali bongo, nakokumisa nkombo ya yo, mpo ozali nta bolamu na baye balingi yo.
Chapter 53
Psal LinVB 53:1  Ya kapita wa bayembi. O ntango ya bokono. Nzembo ya Davidi.
Psal LinVB 53:2  Bilema bakolobaka o kati ya motema : « Nzambe azali te ! » Babebi mpenza mpe bapusi kosala mabe ma nsomo, moto semba azali lisusu te.
Psal LinVB 53:3  Ut’o likolo Nzambe akotalaka bato, amono soko moto wa mayele azali, oyo akolukaka Nzambe.
Psal LinVB 53:4  Kasi banso babungi nzela, banso babebi, moto wa bosembo azali te, ata moko te.
Psal LinVB 53:5  Baye bakobomaka bato ba ngai bayebi te ’te bakosalaka mabe ? Bakoliaka bango lokola mampa, bakosambelaka Nzambe te !
Psal LinVB 53:6  Mokolo mosusu bakolenge na nsomo, ntina te. Nzambe akopanza minkuwa mya baye baboya ye. Bakoyokisa bango nsoni mokolo Nzambe akobwaka bango.
Psal LinVB 53:7  Mokolo nini libiki lya Israel likouta o Sion ? Mokolo Nzambe akozongisa bato bakendeki o boombo, Yakob akoyoka esengo, ba-Israel bakosepela !
Chapter 54
Psal LinVB 54:1  Ya kapita wa bayembi, na biyembeli bya nsinga. Mateya ma Davidi.
Psal LinVB 54:2  O mokolo bato ba Zif bayei koyebisa Saul : « Davidi abombami epai ya biso » (1 Sam 23,19).
Psal LinVB 54:3  E Nzambe, bikisa ngai mpo ya nkombo ya yo, longisa ngai na nguya ya yo.
Psal LinVB 54:4  E Nzambe, yoka losambo la ngai, tia matoi na maloba ma ngai !
Psal LinVB 54:5  Bato ba lofundo babimeli ngai, bato ba bitumba balingi koboma ngai, bango bakokumisaka Nzambe te.
Psal LinVB 54:6  Kasi tala, Nzambe ayei kosalisa ngai, Mokonzi azali na baye bakobatelaka bomoi bwa ngai.
Psal LinVB 54:7  Zongisela banyokoli ba ngai mabe ma bango, Mokonzi, mpo ya bosolo bwa yo, silisa bango !
Psal LinVB 54:8  Nakobonzela yo mabonza na motema moko, nakotondo nkombo ya yo nta bolamu,
Psal LinVB 54:9  mpo obikisi ngai o nsomo inso, mpe namoni banguna ba ngai basambwi.
Chapter 55
Psal LinVB 55:1  Ya kapita wa bayembi, na biyembeli bya nsinga. Mateya ma Davidi.
Psal LinVB 55:2  E Nzambe, yoka losambo la ngai, oboya mabondeli ma ngai te.
Psal LinVB 55:3  Ndima koyoka ngai mpe yanola ngai, natatabani mpo ya boleli.
Psal LinVB 55:4  Nalengi mpo ya migango mya banguna ba ngai mpe mpo ya bowuloli bwa baye baboya yo : bakaneli ngai makambo ebele, mpe bakobi kolanda ngai na nkanda enene.
Psal LinVB 55:5  Motema mwa ngai mokomi kolenge o bontolo bwa ngai, nsomo ya liwa ekangi ngai.
Psal LinVB 55:6  Bobangi mpe nsomo ikoteli ngai, nzoto mobimba ekomi kolenge,
Psal LinVB 55:7  mpe nalobi : « Nani akopesa ngai mapapu lokola ebenga, bongo napimbwa mpe nazwa esika ya bopemi ?
Psal LinVB 55:8  Mbele nakimi mosika mpenza, mpe nakei kofanda o eliki.
Psal LinVB 55:9  Mbele nazwi noki esika ya kobika o ntango mompepe mwa ekumbaki mongali. »
Psal LinVB 55:10  E Mokonzi, bulunginya maloba ma bango, zambi namoni se bitumba mpe boswani o engumba.
Psal LinVB 55:11  Butu moi bakolekaka o bifelo ; bosembo bozali wana te, se makambo mabe.
Psal LinVB 55:12  Bobe bopalangani wana, o zando bobele bitumba na bokosi.
Psal LinVB 55:13  Soko ezalaki monguna moto azalaki kofinga ngai, mbele nakokaki kondima yango. Moto ayini ngai, soko alukaki ngai na makambo, mbele nakimaki mosika na ye.
Psal LinVB 55:14  Kasi moto asali bongo, yo, moto lokola ngai, ndeko wa ngai, moninga wa ngai wa motema.
Psal LinVB 55:15  Tozalaki koyokana malamu, mpe kokende o ndako ya Nzambe nzela yoko.
Psal LinVB 55:16  Liwa likwela bango na mbalakaka, na nguya ya bango inso naino bakita o mboka ya bawa, mpo mabe maleki o esika bafandi.
Psal LinVB 55:17  Kasi ngai nazali kobelela Nzambe, Mokonzi oyo akobikisa ngai.
Psal LinVB 55:18  Na mpokwa, na ntongo mpe na midi, nakimeli mpe namileli na mawa tee ayoki lolaka la ngai.
Psal LinVB 55:19  Abikisi ngai o minyoko mpe apesi ngai boboto o ntango banguna ebele bayeli ngai.
Psal LinVB 55:20  Nzambe ayoka ngai mpe ayokisa bango nsoni, ye Mokonzi monene ut’o libandela. Bango bakoki kobongola mitema te, zambi bakobangaka Nzambe te.
Psal LinVB 55:21  Mosuli atomboli loboko mpo ya kobete baninga, abomi bondeko akataki na bango liboso ;
Psal LinVB 55:22  monoko mwa ye moleki manteka boselu, kasi o motema akokanaka se bitumba ; maloba ma ye maleki mafuta elengi, kasi makozokisa lokola mbeli epotu.
Psal LinVB 55:23  Tia mokumba mwa yo o maboko ma Mokonzi mpe ye akolendisa yo, akolingisa te ’te moto semba akweya seko.
Psal LinVB 55:24  Kasi baye bakobomaka mpe bakokosaka, yo Nzambe, okobwaka bango o libulu lya mboka ya bawa : bakosilisa ata ndambo ya mikolo mya bango te. Kasi ngai nakolikya na yo.
Chapter 56
Psal LinVB 56:1  Ya kapita wa bayembi. Ya Davidi. O ntango ba-Filisti bakangi ye o Gat (1 Sam 21,11-13).
Psal LinVB 56:2  E Nzambe, yokela ngai mawa ntango bayei kobunisa ngai, moi mobimba banyokoli bazali kotungisa ngai.
Psal LinVB 56:3  Banguna bakobunisaka ngai ntango inso, baye bakobimelaka ngai bazali baike.
Psal LinVB 56:5  Nakokumisa Nzambe mpo ya liloba lya ye ; nakolikya na Nzambe mpe nakobanga lisusu te ; bongo moto akoki kosala ngai nini ?
Psal LinVB 56:6  Mikolo minso bakobongolaka maloba ma ngai, bakani se kosala ngai mabe.
Psal LinVB 56:7  Babombami mpo ya konongo esika nakoleka, mpe mpo ya koboma ngai.
Psal LinVB 56:8  Awa basali mabe bongo, bakoki nde kobika ? E Nzambe, nkanda ya yo eboma bango !
Psal LinVB 56:9  E Nzambe, otangi mbala boni nasengelaki kokima, ekomami o buku ya yo, yamba mpizoli ya ngai o mbeki ya yo.
Psal LinVB 56:10  Soko nabengi yo, banguna ba ngai bakokima, mpo nayebi ’te Nzambe azali na ngai.
Psal LinVB 56:11  Nakokumisa Nzambe mpo ya liloba lya ye, ye Mokonzi, nakokumisa maloba ma ye.
Psal LinVB 56:12  Nakolikya na Nzambe mpe nakobanga te : bato bakoki kosala ngai nini ?
Psal LinVB 56:13  E Nzambe, nasengeli kokokisa bilako nalakelaki yo, nakobonzela yo mabonza ma botondi yo,
Psal LinVB 56:14  mpo obikisi ngai o maboko ma liwa ; obateli makolo ma ngai mpo ’te natuta libaku te, mpe natambola seko o miso ma yo, o kati ya mwinda mokongengeleke bato ba bomoi.
Chapter 57
Psal LinVB 57:1  Ya kapita wa bayembi ; lolenge loko na nzembo ‘Obebisa te’. Nzembo ya Davidi o mokolo akimaki Saul mpe akoti o mobenga. (Sam 24,1-9).
Psal LinVB 57:2  Mawa e ! E Nzambe, yokela ngai mawa, nakimi epai ya yo, nayei kobombama o nse ya mapapu ma yo tee ntango bolozi bokosila.
Psal LinVB 57:3  Nabeleli Nzambe oyo azali o likolo, Nzambe oyo akosalaka ngai se malamu.
Psal LinVB 57:4  Ut’o likolo atindela ngai libiki, asambwisa monyokoli wa ngai, atindela ngai bolingi mpe bosolo bwa ye.
Psal LinVB 57:5  Nakomi kolala o kati ya ntambwe ikoliaka bana ba bato. Mino ma bango lokola makongo mpe makula, lolemu la bango lokola mompanga basebi.
Psal LinVB 57:6  E Nzambe, omilakisa o nta likolo, nse mobimba etonda na nkembo ya yo !
Psal LinVB 57:7  O nzela batandelaki ngai monyama, balingaki koboma ngai. Batimolaki libulu liboso lya ngai, kasi bango moko bakwei o libulu lyango.
Psal LinVB 57:8  Sikawa motema mokiti, e Nzambe wa ngai, motema nye nakoyembela yo nzembo.
Psal LinVB 57:9  E nkembo ya ngai, lamuka ! E nzenze na lokombe, bolamuka, nayemba tee ntongo ekotana.
Psal LinVB 57:10  Mokonzi, nakokumisa yo o ntei ya bato, nakobetela yo nzenze o bikolo binso,
Psal LinVB 57:11  mpo bolingi bwa yo boleki likolo na bonene, bosolo bwa yo bobuti kin’o mampata.
Psal LinVB 57:12  E Nzambe, omilakisa o nta likolo, nse mobimba etonda na nkembo ya yo !
Chapter 58
Psal LinVB 58:1  Ya kapita wa bayembi : lolenge loko na nzembo ‘Obebisa te’. Nzembo ya Davidi.
Psal LinVB 58:2  Bato banene ba mokili bakosambaka nde na bosembo ? Bino bato, bokokataka makambo bo ebongi ?
Psal LinVB 58:3  Te, na nko bokosalaka maye mazangi bosembo, mpe bokotielaka bato mikumba lokola bino moko bolingi.
Psal LinVB 58:4  Babeba ut’o libumu lya mama, bato baye babe, babunga ut’o mbotama ya bango, bato baye ba lokuta ;
Psal LinVB 58:5  bazali na ngenge lokola ngenge ya nyoka, bakufi matoi lokola nyoka ekangi matoi
Psal LinVB 58:6  mpo ’te eyoka lolaka la nganga te, oyo ayebi kopesa ye mitindo mya ye.
Psal LinVB 58:7  E Nzambe, buka bango mino o monoko, e Mokonzi, longola mino ma bana ba nkosi.
Psal LinVB 58:8  Balimwa lokola mai ma mbeki masopani, babeba lokola matiti bato bakonyataka !
Psal LinVB 58:9  Balimwa lokola mbembé ekonyangwa o nzela, lokola zemi lisopani mpe likomono moi te !
Psal LinVB 58:10  Liboso ’te babimisa nzube lokola lolemu la nkoi, mobesu to mobesu te, nkanda elongola bango !
Psal LinVB 58:11  Moto semba akosepela mokolo bango bakozwa etumbu, akosukola makolo ma ye o makila ma baye baboya Nzambe.
Psal LinVB 58:12  Bakoloba : Solo, kozala moto semba ezali na litomba ; Nzambe azali, oyo akoyangelaka mokili na bosembo.
Chapter 59
Psal LinVB 59:1  Ya kapita wa bayembi. Ya Davidi. O ntango Saul atindi bato bakengele ndako ya Davidi mpo ’te baboma ye (1 Sam 19,11).
Psal LinVB 59:2  E Nzambe wa ngai, bikisa ngai o maboko ma banguna, batela ngai o ntei ya bato bayeli ngai etumba.
Psal LinVB 59:3  Bikisa ngai o maboko ma bato bakosalaka mabe, ma baye balingi koboma ngai.
Psal LinVB 59:4  Tala, bazali kokenge ngai, bato makasi bakaneli ngai, nzokande nasali lisumu te, mabe moko mpe te, e Nzambe.
Psal LinVB 59:5  Ata nazali na likambo lyoko te, bamilengeli mpo ’te babimela ngai. Lamuka, yaka kosalisa ngai mpe tala !
Psal LinVB 59:6  E Mokonzi, Nzambe wa bokasi bonso, Nzambe wa Israel, lamuka mpe pesa bampaya baye etumbu, oyokela basuli baye mawa te !
Psal LinVB 59:7  Na mpokwa bakozonga, bakolela lokola mbwa, bakoyengayenga o mboka mobimba.
Psal LinVB 59:8  Minoko mya bango mitondi na maloba ma lolendo, mbebu ya bango lokola mompanga basebi, balobi : « Nani moto akoyoka biso ? »
Psal LinVB 59:9  Kasi yo Mokonzi, okosekeke bango, okotiolaka bango banso.
Psal LinVB 59:10  Yo, nguya ya ngai, nakotala bobele yo ; solo, Nzambe azali ebombamelo ya ngai.
Psal LinVB 59:11  Nzambe wa bolingo akoya kosalisa ngai ; Nzambe akosala ’te nakoka banguna baye bayeli ngai.
Psal LinVB 59:12  Oboma bango te, mpo ’te bato ba ngai babosana te, kasi na nguya ya yo obengana mpe onyata bango, e Mokonzi, yo nguba ya biso.
Psal LinVB 59:13  Nyonso bakolobaka na monoko, ezali lisumu ; lofundo lokosukisa bango, mpo batuki Nzambe mpe bazali bato ba lokuta.
Psal LinVB 59:14  Silisa bango na nkanda ya yo, bazala lisusu te, bato bayeba bongo ’te Nzambe azali Mokonzi wa Yakob kin’o nsuka ya mokili.
Psal LinVB 59:15  Na mpokwa bakozonga, bakolela lokola mbwa, bakoyengayenga o mboka mobimba.
Psal LinVB 59:16  Bipai binso bakoluka biloko bya kolia, mpe soko batondi te, bakolela se boleli.
Psal LinVB 59:17  Kasi ngai nakoyembela nguya ya yo, na ntongo nakokumisa bolingi bwa yo, yo ebombamelo ya ngai, oyo akobatela ngai o mikolo nakoyoka nsomo.
Psal LinVB 59:18  Yo bokasi bwa ngai, nakoyembela yo ; ebombamelo ya ngai, Nzambe oyo akosalaka ngai se malamu.
Chapter 60
Psal LinVB 60:1  Ya kapita wa bayembi. Ya Davidi. Mpo ya koteya.
Psal LinVB 60:2  O ntango abundaki etumba na ba-Aram, ba-Mezopotamia mpe ba-Soba, mpe Yoab auti kolonga ba-Edom nkoto zomi na ibale o lobwaku la Mongwa (2 Sam 8).
Psal LinVB 60:3  E Nzambe obwaki biso, opanzi biso, osilikeli biso ; zongela biso !
Psal LinVB 60:4  Oningisaki mokili, opasolaki mwango ; bongisa bisika bibebi, zambi mokili mobukani.
Psal LinVB 60:5  Oyokisaki bato ba yo mpasi mingi, omelisaki biso vino eleki makasi.
Psal LinVB 60:6  Kasi opesaki bato bakobangaka yo bendele mpo ’te bakima baye bakobetele bango makula.
Psal LinVB 60:7  Mpo ’te bato ba yo ba bolingo babika salisa bango na bokasi bwa loboko la yo, yanola biso.
Psal LinVB 60:8  O ndako ya ye esantu Nzambe alobaki : « Nasepeli mingi, nakokabola mokili mwa Sikem, mpe nakomeka lobwaku la Sukot na nsinga.
Psal LinVB 60:9  Mikili mya Galaad na Manase, mikili mya ngai, mokili mwa Efraim mokozala enkoti ya motó mwa ngai, mokili mwa Yuda, montongo mwa ngai,
Psal LinVB 60:10  mokili mwa Moab, sani ya kosukola nzoto. Nakobwaka sapato o mokili mwa Edom. Nakoyokisa ba-Filisti mogango mwa etumba ! »
Psal LinVB 60:11  Nani akoyingisa ngai o mboka ezingami na lopango makasi ? Nani akokamba ngai o mokili mwa Edom ?
Psal LinVB 60:12  E Nzambe, obwaki biso solo ? E Nzambe, okokamba mampinga ma biso lisusu te ?
Psal LinVB 60:13  Salisa biso o ntango ya minyoko, zambi lisalisi lya bato lizali bobele mpamba.
Psal LinVB 60:14  Elongo na Nzambe tokosala makamwa, ye moto akonyata banyokoli ba biso.
Chapter 61
Psal LinVB 61:1  Ya kapita wa bayembi ; na eyembeli ya nsinga. Ya Davidi.
Psal LinVB 61:2  E Nzambe, yoka boleli bwa ngai, tia matoi na losambo la ngai !
Psal LinVB 61:3  Ut’o ndelo ya mokili nakobelela yo, mpo motema mwa ngai molembi mpenza. Otombola ngai o nsonge ya libanga lileki ngai na bosanda.
Psal LinVB 61:4  Solo, ozali ebombamelo ya ngai mpe linongi makasi o miso ma banguna.
Psal LinVB 61:5  Nalingi kofanda o ema ya yo seko, koluka bobateli o nse ya mapapu ma yo.
Psal LinVB 61:6  Yo Nzambe, oyebi maye motema mwa ngai molingi, mpe okopesaka bato babangi yo maye basengi yo.
Psal LinVB 61:7  Na bomoi bwa mokonzi bakisa mikolo, mpo ’te aumela mibu miike o mokili.
Psal LinVB 61:8  Afanda o ngwende ya ye o miso ma Nzambe seko, batela ye na bolingi mpe na bosolo bwa yo.
Psal LinVB 61:9  Bongo nakoyembela nkombo ya yo ntango inso, mpe nakokokisa bilako bya ngai mokolo na mokolo.
Chapter 62
Psal LinVB 62:1  Ya kapita wa bayembi, ya Yedutun. Nzembo ya Davidi.
Psal LinVB 62:2  Motema mwa ngai mokopema se epai ya Nzambe, libiki lya ngai likouta se epai ya ye.
Psal LinVB 62:3  Ye azali libanga mpe libiki lya ngai, ebombamelo ya ngai, nakotelengana te.
Psal LinVB 62:4  Mikolo boni naino bokobundisa moto azali se ye moko, mpe bokoluka koboma ye, bino banso lisanga, mpo ya kokweisa ye lokola efelo etengemi, mpe koboma ye lokola lopango losili lobukani.
Psal LinVB 62:5  Bakani se kokweisa moto ; esengo ya bango, se kokosa bato. Na monoko bakolobaka maloba ma bobenisi, kasi na motema bakobeteleke moto mobondo.
Psal LinVB 62:6  Motema mwa ngai mopema epai ya Nzambe, zambi bobele ye azali elikya ya ngai.
Psal LinVB 62:7  Ye azali libanga mpe libiki lya ngai, ebombamelo ya ngai, nakotelengana te.
Psal LinVB 62:8  Bobele ye Nzambe azali libiki mpe lokumu la ngai, Nzambe azali libanga mpe ebombamelo ya ngai.
Psal LinVB 62:9  Bino bato, botia mitema na ye ntango inso, bofungolela ye mitema mya bino. Nzambe azali ebombamelo ya biso.
Psal LinVB 62:10  Bato bake bazali se mpema mpamba, bato banene bakolekaka se boleki. Soko batii bango banso elongo o emekeli, bakokoka ata na bozito bwa mompepe te.
Psal LinVB 62:11  Boluka kosala bato makambo na makasi te, bomiyokisa mpasi te mpo ya kobotolo bato biloko. Soko bokomi na nkita enene, botia mitema na yango te !
Psal LinVB 62:12  Nzambe alobaki se mbala yoko, ngai nayokaki mbala ibale ’te : « Nzambe aleki bokasi,
Psal LinVB 62:13  Mokonzi, yo bolingi bwa solo » ; « okofutaka moto nyonso engebene na mosala mwa ye. »
Chapter 63
Psal LinVB 63:1  Nzembo ya Davidi o ntango azalaki o eliki ya Yuda (1 Sam 23,14).
Psal LinVB 63:2  Nakolukaka yo Nzambe, yo Nzambe wa ngai, molimo mwa ngai mozali na mposa na yo ; nzoto ya ngai eyoki mposa makasi na yo, ekomi lokola elanga ekauki mpe esila mai.
Psal LinVB 63:3  Nalingi kokende kotala yo o ndako esantu, namono nguya mpe nkembo ya yo.
Psal LinVB 63:4  Bolingi bwa yo boleki bomoi bwa nzoto, nakosakola nkembo ya yo na mbebu ya ngai.
Psal LinVB 63:5  Nalingi kokumisa yo bomoi bwa ngai mobimba, mpe kotombola maboko mpo ya nkombo ya yo.
Psal LinVB 63:6  Nakotonda na bolamu bwa yo lokola moto alei malamu, motema nsai nakokumisa yo.
Psal LinVB 63:7  Ntango nalali o mbeto, nakanisi se yo, awa mpongi eyei te, nasambeli yo.
Psal LinVB 63:8  Yo moto oyei kosalisa ngai, na esengo namibombi o nse ya mapapu ma yo.
Psal LinVB 63:9  Molimo mwa ngai mokangana na yo, okobatelaka ngai na loboko la yo la mobali.
Psal LinVB 63:10  Bato baye balingi koboma ngai bakita o mabelé bozindo !
Psal LinVB 63:11  Bakufa na mompanga, minsole miya kolia bibembe bya bango !
Psal LinVB 63:12  Kasi mokonzi wa ekolo akosepela Nzambe. Moto akotia motema na ye akozwa bolamu mokolo bato ba lokuta bakokanga monoko.
Chapter 64
Psal LinVB 64:2  E Nzambe, yoka ngai moto nazali kokimela, batela ngai o ntango nazali kobanga monguna.
Psal LinVB 64:3  Bomba ngai mosika na bato bakaneli ngai, mosika na likita lya bato bakosalaka mabe.
Psal LinVB 64:4  Bapelisi lolemu la bango lokola mompanga, maloba ma bango lokola makula ma ngenge,
Psal LinVB 64:5  mpo ’te bazokisa moto semba na bonkutu, babete ye na mbalakaka, babangi te.
Psal LinVB 64:6  Balendisani o makambo mabe, bayokani mpo ya kotia mitambo, bamilobeli : « Nani akomono myango ? »
Psal LinVB 64:7  Baluki mayele ma kosala mabe, moto na moto abombi mokano mabe o motema mwa ye.
Psal LinVB 64:8  Kasi Nzambe akobetele bango likula, mpe na mbalakaka bakozoka mpota.
Psal LinVB 64:9  Maloba ma bango makweisi bango moko. Baye banso bamoni bongo baningisi mitó.
Psal LinVB 64:10  O ntango ena banso bakobanga, bakondima ’te Nzambe asali bongo, bakoyeba ntina ya mosala mwa ye.
Psal LinVB 64:11  Moto semba akoyoka nsai o mboka Mokonzi, akobombama epai ya ye, mpe bato banso ba motema bosembo bakosepela.
Chapter 65
Psal LinVB 65:2  E Nzambe, ebongi bakumisa yo o Sion, bato bakokisa bilako balakelaki yo.
Psal LinVB 65:3  Bato banso bakoki kokoma epai ya yo, zambi okoyokaka losambo la bango.
Psal LinVB 65:4  Masumu ma biso maleki mingi, kasi yo okolimbisaka mango.
Psal LinVB 65:5  Esengo na moto oyo yo oponi, mpo ’te afanda o lopango la yo. Totonda na biloko bya ndako ya yo, na biloko bisantu bya Tempelo ya yo.
Psal LinVB 65:6  Na makamwa ma bosembo okolobaka na biso, yo Nzambe mobikisi wa biso, ozali elikya ya bato ba nse mobimba kin’o nsuka ya mbu enene.
Psal LinVB 65:7  Na nguya ya yo opiki ngomba makasi, omizingi na nguya ya yo.
Psal LinVB 65:8  Okokitisaka makeléle ma mbu mpe ma mbonge, na mpe makeléle ma bato batombokeli yo.
Psal LinVB 65:9  Makamwa ma yo makoyokisaka bato ba mikili mosika nsomo ; epai moi mokobimaka mpe epai mokokitaka, bikela bya yo bikoyokisaka bato esengo.
Psal LinVB 65:10  Okoyaka kotala nse mpe okonokiselaka yango mbula, okotondisaka yango na biloko ebele. Na mai matondi o moluka mwa Nzambe, okobongisaka mabelé mpo ’te mabota mbuma ya mampa.
Psal LinVB 65:11  Okosopaka mai mpe okolalisaka mabelé, okonokisaka mbula mpe okotoisaka milona.
Psal LinVB 65:12  Mobu na mobu okokokisaka makabo ma yo : bipai binso olekaki bilanga biboti mbuma mingi ;
Psal LinVB 65:13  o esobe ekauki matiti mazwi mai, esengo emononi o ngomba inso ;
Psal LinVB 65:14  bisobe binso bitondi na bibwele, bilanga binso na mbuma ya mampa ; bipai binso se esengo, se nzembo !
Chapter 66
Psal LinVB 66:1  Ya kapita wa bayembi. Nzembo. O mokili mobimba bobetele Nzambe maboko,
Psal LinVB 66:2  boyembela nkombo ya ye nzembo, bokembela mpe bokumisa ye.
Psal LinVB 66:3  Boloba na Nzambe : « Osali bikela binene, nguya ya yo eleki, banguna bakomi kobondela yo.
Psal LinVB 66:4  Bato ba nse mobimba bakumbameli yo, bayembi mpo ya lokumu la nkombo ya yo. »
Psal LinVB 66:5  Yakani kotala bikela bya Nzambe, biye bikoyokisaka bato nsomo.
Psal LinVB 66:6  Akaukisaki mbu, ekomi mabelé makasi, mpo ’te bato bakatisa ebale na makolo. Bongo, esengo ya biso se ye !
Psal LinVB 66:7  Akoyangela seko na nguya enene ! Miso ma ye makokengeleke bikolo binso, baye batombokeli ye bakomeka lisusu te.
Psal LinVB 66:8  Bato ba bikolo binso, bokumisa Nzambe wa biso, boyemba nzembo ya kokumisa ye.
Psal LinVB 66:9  Oyo akabeli biso bomoi akobatelaka makolo ma biso mpo totuta libaku te.
Psal LinVB 66:10  Solo, omekaki biso, e Nzambe, opetolaki biso lokola bakopetolaka palata,
Psal LinVB 66:11  okotisaki biso o motambo, okangaki loketo la biso makasi,
Psal LinVB 66:12  olingisaki ’te bato banyata mitó mya biso, tozikaki na móto, tozindaki o mai, kasi na nsima okambaki biso o esika ya bopemi.
Psal LinVB 66:13  Nayei kotumba mabonza o ndako ya yo, nayei kokokisa bilako bya ngai,
Psal LinVB 66:14  biye nalakelaki yo na monoko, biye nasakolaki o ntango nayokaki nsomo.
Psal LinVB 66:15  Nakotumbela yo miboma mya mafuta, milinga mya mpata babali, mpe nakobonza ngombe na ntaba babali.
Psal LinVB 66:16  Yakani koyoka bino banso bokobangaka Nzambe, nayebisa bino lisolo lya manso ye asali ngai.
Psal LinVB 66:17  Ntango nazalaki kobondela ye, nabandaki kosakola lokumu la ye.
Psal LinVB 66:18  Soko o motema nakanaki kosala mabe, mbele Mokonzi andimaki losambo la ngai te.
Psal LinVB 66:19  Kasi Nzambe andimelaki ngai, ayokaki mabondeli ma ngai.
Psal LinVB 66:20  Lokumu na Nzambe, oyo andimaki losambo la ngai mpe apimaki ngai bolingi bwa ye te !
Chapter 67
Psal LinVB 67:1  Ya kapita wa bayembi ; na biyembeli bya nsinga.
Psal LinVB 67:2  Nzambe ayokela biso mawa mpe abenisa biso, angengisela biso elongi ya ye !
Psal LinVB 67:3  Bato banso ba nse bayeba nzela ya yo, bikolo binso bimono libiki lya yo.
Psal LinVB 67:4  Bato banso bakumisa yo, Nzambe, bato banso batondo yo !
Psal LinVB 67:5  Bato ba mikili minso bayemba na esengo, mpo okosambisaka na bosembo mpe okokambaka bikolo binso bya nse.
Psal LinVB 67:6  Bato banso bakumisa yo, Nzambe, bato banso batondo yo !
Psal LinVB 67:7  Bilanga biboti mbuma, Nzambe, Nzambe wa biso, abenisi biso.
Psal LinVB 67:8  Nzambe abenisa biso mpe bato ba nse mobimba babanga ye !
Chapter 68
Psal LinVB 68:2  Nzambe ateleme, banguna ba ye bapanzana, bato bayini ye bakima elongi ya ye.
Psal LinVB 68:3  O miso ma Nzambe balimwa lokola milinga, lokola mafuta ma nzoi makonyangwaka o móto, bato babe basila o miso ma yo, Nzambe.
Psal LinVB 68:4  Kasi bato ba bosembo basepela o boso bwa Nzambe, bayembela ye mpe babina na esengo.
Psal LinVB 68:5  Boyembela Nzambe, bokumisa nkombo ya ye ; bokumisa Oyo akotambolaka likolo lya mampata, nkombo ya ye Mokonzi, bobinela ye.
Psal LinVB 68:6  Ye Nzambe o ndako ya ye esantu, azali tata wa bana bitike, mpe molobeli wa basi bakufeli babali.
Psal LinVB 68:7  Ye akopesa baye bazangi ndako esika ya kofanda, akozongisela baombo bonsomi na esengo ; kasi bato batombokeli ye bakofanda o eliki.
Psal LinVB 68:8  E Nzambe, ntango okendeki o boso bwa bato ba yo, mpe okambaki bango o eliki,
Psal LinVB 68:9  mokili moninganaki o miso ma Nzambe mpe likolo linokisaki mbula, o miso ma Nzambe, Nzambe wa Israel.
Psal LinVB 68:10  E Nzambe, otindelaki bango makabo ma yo maike lokola mbula, mpe olendisaki bato ba yo balembeki.
Psal LinVB 68:11  E Nzambe, yo moto opesaki bango esika ya kofanda, eye obongiselaki babola, mpo ya bolamu bwa yo.
Psal LinVB 68:12  Mokonzi atindaki bantoma na nsango eye : « Mokonzi apanzaki limpinga linene. »
Psal LinVB 68:13  Bakonzi na basoda ba bango bakimaki mbangu, basi babandaki kokabolana biloko :
Psal LinVB 68:14  mapapu ma bibenga makembami na palata, mpe nsala ya byango na wolo. Bongo bokotikala se o lopango la bibwele ?
Psal LinVB 68:15  Ntango Mokonzi apanzi bakonzi banene, mbula ya matandala enoki o ngomba Salmon.
Psal LinVB 68:16  Ngomba ya Basan, ngomba ya Nzambe, ngomba ya Basan, ngomba ya nsonge ilai.
Psal LinVB 68:17  Bino ngomba isanda, mpo nini boyoki zuwa ? Mpo nini boluli ngomba eye Nzambe aponi mpo ’te afanda ? Solo, Mokonzi akozala kuna seko.
Psal LinVB 68:18  Nzambe azali na makalo ma etumba nkoto na nkoto, ut’o ngomba Sinai ayaki o ndako ya ye esantu.
Psal LinVB 68:19  Obutaki ngomba Sion, okangaki bato bo baombo, osengeki bato mabonza, ata baye batombokoki, mpo ’te ozala na ndako ya kofanda, e Mokonzi Nzambe.
Psal LinVB 68:20  Bakumisa Mokonzi mokolo na mokolo, Nzambe, mobikisi wa biso, akopanganaka na biso.
Psal LinVB 68:21  Ye azali Nzambe oyo akosalisaka biso ; Mokonzi Nzambe akobikisaka biso o liwa.
Psal LinVB 68:22  Ye Nzambe akopasolaka mitó mya banguna ba ye, mpe mya bato bakosalaka mabe.
Psal LinVB 68:23  Mokonzi alobi : « Nakolongola bango o Basan, nakobenda baye bazindi o bozindo bwa mbu,
Psal LinVB 68:24  mpo ’te otia lokolo o makila ma bango, mpe mbwa ya yo ilia nsuni ya banguna. »
Psal LinVB 68:25  E Nzambe, bamoni milongo mya bato ba yo, milongo mya Nzambe, Mokonzi wa ngai, bayingeli na nkembo o Tempelo.
Psal LinVB 68:26  Bayembi liboso, bato ba miziki nsima, o kati ya bango bilenge basi bazali kobete mbonda.
Psal LinVB 68:27  Banso lisanga bakumisi Nzambe, ye Mokonzi, liziba lya libiki lya Israel.
Psal LinVB 68:28  Bato ba Benyamin mozimi bakei liboso, nsima bankumu ba Yuda, bankumu ba Zabulon mpe ba Neftali na milato minzenga.
Psal LinVB 68:29  E Nzambe, omonisa nguya ya yo, nguya eye olakisaki biso.
Psal LinVB 68:30  Ut’o Tempelo ya yo o ngomba ya Yeruzalem bakonzi bakoya kobonzela yo mabonza !
Psal LinVB 68:31  Bangisa ngando ebombami o nsoló ya ebale, ngombe babali na bana ba ngombe, baye babondeli yo, palata o maboko ! Panza bato balingi se bitumba.
Psal LinVB 68:32  Bato banene bakouta o Ezipeti, bato ba Etiópia bakotandela Nzambe maboko.
Psal LinVB 68:33  Bino bakonzi ba nse, boyembela Nzambe, bobete miziki mpo ya kokumisa Mokonzi,
Psal LinVB 68:34  oyo akotambolaka o etando ya likolo. Boyoka mongongo mwa ye, mongongo makasi.
Psal LinVB 68:35  Bosakola bokasi bwa Nzambe, ye nkembo ya Israel ; bokasi bwa ye bozali o mampata :
Psal LinVB 68:36  Ye Nzambe wa nsomo o ndako ya ye esantu, Nzambe wa Israel oyo akopesaka bato ba ye nguya mpe mpiko. Bakumisa Nzambe !
Chapter 69
Psal LinVB 69:2  E Nzambe, obikisa ngai, mai makomeli ngai kin’o nkingo.
Psal LinVB 69:3  Nakomi kozinda o kati ya potopoto bozindo, nazwi esika ya kotia makolo te. Nakwei o mai bozindo, mosika te mai makasi makobenda ngai.
Psal LinVB 69:4  Nalembi na boleli, mongongo mokauki, miso ma ngai mateli na bozili Nzambe wa ngai.
Psal LinVB 69:5  Bato bakoyinaka ngai se mpamba, baleki nsuki ya motó mwa ngai na boike. Baye bakonyokoloko ngai ntina te, baleki ngai na bokasi. Eloko nayibi te, nazongisa yango boniboni ?
Psal LinVB 69:6  E Nzambe, oyebi bozoba bwa ngai, mabe ma ngai mabombami o miso ma yo te.
Psal LinVB 69:7  E Mokonzi wa bokasi bonso, bato bakolikya na yo bayoka nsoni mpo ya ngai te ! Baye bakoluka yo, Nzambe wa Israel, basambwa mpo ya ngai te !
Psal LinVB 69:8  Bobele mpo ya yo nandimi mafinga, nandimi ’te nsoni emonono o elongi ya ngai.
Psal LinVB 69:9  Mpo ya yo nakomi mouta o miso ma bandeko ba ngai, bana ba mama wa ngai bayebi ngai lisusu te.
Psal LinVB 69:10  Mposa ya kokumisa ndako ya yo ekoteli ngai, mafinga bafingi yo, makweli ngai.
Psal LinVB 69:11  Soko namiyokisi mpasi na bolali nzala, bakomi kofinga ngai.
Psal LinVB 69:12  Soko nalati ngoto ya lilaka, bakomi koseke ngai o lisapo,
Psal LinVB 69:13  mpe kotonga ngai tee o zando ; bameli masanga batii ngai na nzembo.
Psal LinVB 69:14  Kasi ngai nakobi kosambela yo, Mokonzi : ntango ya kondimela ngai ekoki. E Nzambe, mpo ya bolingi bonene bwa yo, oyanola ngai, mpo ozali mobikisi wa solo.
Psal LinVB 69:15  Longola ngai o potopoto mpo nazinda te, nalongwa o maboko ma bato bakoyinaka ngai, nabika o mai bozindo.
Psal LinVB 69:16  Mai makasi mabenda ngai te, libulu limele ngai te, monoko mwa libulu mokangema likolo lya ngai te.
Psal LinVB 69:17  E Mokonzi, oyanola ngai, zambi bolingi bwa yo boleki bolamu, mpo ya ngolu ya yo enene, ondima kotala ngai.
Psal LinVB 69:18  Bombela mosaleli wa yo elongi ya yo te ; nanyokwami mingi, yanola ngai noki.
Psal LinVB 69:19  Bikisa ngai na banguna, yaka pene na ngai mpo ya kosikola ngai.
Psal LinVB 69:20  Oyebi ’te nasambwi mingi, lokumu la ngai lobebi, bayokisi ngai nsoni mingi ; oyebi banguna ba ngai banso.
Psal LinVB 69:21  Mafinga malembisi ngai motema, nazoki mpenza, nazalaki na elikya ’te bakoyokela ngai mawa, kasi se mpamba, naluki bato babondo ngai, kasi nazwi bango te.
Psal LinVB 69:22  Batii ngenge o bilei bya ngai, mpe ntango nayoki mposa ya mai, bamelisaki ngai masanga ngai.
Psal LinVB 69:23  Meza ya bango ékomela bango motambo, bilei biike bitiela bango libaku.
Psal LinVB 69:24  Miso ma bango makoma molili, bamono lisusu te, mikongo mya bango migumbama seko.
Psal LinVB 69:25  Kitisela bango nkanda ya yo enene, móto mwa nkele ya yo mozikisa bango.
Psal LinVB 69:26  Nganda ya bango ekoma eliki, biema bya bango bizanga bato,
Psal LinVB 69:27  mpo banyokoli moto oyo osili obeteki, babakiseli moto oyo obeteki mpasi.
Psal LinVB 69:28  Obakisela bango etumbu esusu, olimbisa bango nyongo te.
Psal LinVB 69:29  Baboma nkombo ya bango o buku ya bomoi, balongola bango o molongo mwa basemba.
Psal LinVB 69:30  E Nzambe, mobikisi wa ngai, lendisa ngai, mpo nasambwi mpe nanyokwami.
Psal LinVB 69:31  Nakoyembela nkombo ya Nzambe nzembo, nakokumisa mpe nakotondo ye.
Psal LinVB 69:32  Yango ekosepelisa Nzambe, leka libonza lya ngombe, ngombe mobali na maseke mpe na matambi.
Psal LinVB 69:33  Bato banyokwami bakomono bongo mpe bakosepela ; bino bato bokolukaka Nzambe, bolenda o mitema !
Psal LinVB 69:34  Mokonzi akondimelaka babola, bato ba ye bakangemi o boloko, akokinolaka bango te.
Psal LinVB 69:35  Likolo na nse, bobetele ye maboko, ná mbu ná nyama inso izali wana.
Psal LinVB 69:36  Boyeba ’te Nzambe akobikisa Sion, akotonga lisusu bingumba bya Yuda, bakozala bankolo ba ekolo mpe bakofanda wana.
Psal LinVB 69:37  Basaleli ba ye bakozwa mabelé ma bango, baye balingi nkombo ya ye, bakofanda wana seko.
Chapter 70
Psal LinVB 70:2  E Nzambe, yaka kosalisa ngai noki, E Mokonzi, salisa ngai !
Psal LinVB 70:3  Baye balingi koboma ngai bayoka nsoni ; baye balingi ’te nayoka mpasi bazonga nsima mpe bakima na nsoni.
Psal LinVB 70:4  Baye bawuloli ngai, basambwa mpe bazonga na nsoni.
Psal LinVB 70:5  Kasi bato banso bakolukaka yo, basepela mpe bayoka esengo. Baye bandimi libiki lya yo, baloba ntango inso : « Nzambe azali monene ! »
Psal LinVB 70:6  Kasi ngai, mobola mpe moto wa mawa, e Nzambe, yaka noki epai ya ngai. Ozali mosalisi mpe mobikisi wa ngai, yo Mokonzi, yaka, oumela te !
Chapter 71
Psal LinVB 71:1  E Mokonzi, namibombi epai ya yo, nasambwa lisusu mokolo moko te !
Psal LinVB 71:2  Na bosembo bwa yo okoya kobikisa ngai, tia matoi epai ya ngai mpe bikisa ngai.
Psal LinVB 71:3  Zala libanga esika nakoki kobombama, lopango lokoki kobatela ngai ; okani kobikisa ngai, zambi ozali libanga mpe ebombamelo ya ngai.
Psal LinVB 71:4  E Nzambe, obikisa ngai o maboko ma moto mabe, o maboko ma bakosi bakonyokoloko ngai.
Psal LinVB 71:5  Elikya ya ngai se yo, Mokonzi Nzambe, ut’o bomwana nakotiaka motema na yo.
Psal LinVB 71:6  Uta babotaki ngai nakolukaka lisalisi epai ya yo, yo bokasi bwa ngai ut’o libumu lya mama. Nakokumisaka yo ntango inso !
Psal LinVB 71:7  Bato baike bakokamwaka na mpasi ya ngai, kasi yo ozali ebombamelo ya ngai.
Psal LinVB 71:8  Monoko mwa ngai mozali se kokumisa yo, moi mobimba nazali kosakola nkembo ya yo.
Psal LinVB 71:9  Obwaka ngai te, awa nakomi mobange, otika ngai te awa bokasi bwa ngai bokomi kosila :
Psal LinVB 71:10  banguna bakotongoko ngai, baye balingi koboma ngai bayokani, balobi :
Psal LinVB 71:11  « Nzambe atiki ye, tonyokolo ye, tokanga ye, moto akobikisa ye azali te. »
Psal LinVB 71:12  E Nzambe, ozala mosika na ngai te, Nzambe wa ngai, yaka kosalisa ngai noki.
Psal LinVB 71:13  Baye bakotielaka ngai mitambo, bayoka nsoni, baye balingi koyokisa ngai mpasi, basambwa.
Psal LinVB 71:14  Kasi ngai nakobwaka elikya te, nakokoba se koyemba lokumu la yo.
Psal LinVB 71:15  Mikolo minso nakosakola bosembo bwa yo, mpe ndenge obikisaki ngai. Mokolo moko te nakoyeba yango inso.
Psal LinVB 71:16  Nakosakola bikela binene bya Mokonzi, nakoyebisa ’te bobele yo ozali na bosembo.
Psal LinVB 71:17  E Nzambe, oteyaki ngai ut’o bomwana, tee lelo nazali kosakola makamwa ma yo.
Psal LinVB 71:18  Tala, nakomi mobange, nakokisi mibu miike, otika ngai te, e Nzambe ; na bato bakoya nsima nasakola bikela bya yo mpe nguya ya yo.
Psal LinVB 71:19  E Nzambe, bosembo bwa yo boleki bonene ! Yo moto osalaki mambi manene, e Nzambe nani akokani na yo ?
Psal LinVB 71:20  Yo moto oyokisi ngai mpasi mpe malozi maike, okozongisela ngai bomoi, okozonga mpo ’te olongola ngai o mboka ya bawa.
Psal LinVB 71:21  Okobakisela ngai mikolo, mpe okobondo motema mwa ngai.
Psal LinVB 71:22  Bongo na nzenze ya ngai nakotondo yo mpo ya bolingi bwa yo, Nzambe wa ngai, nakobetele yo lokombe, yo Mosantu wa Israel.
Psal LinVB 71:23  Na monoko nakoyembela yo na nsai, molimo mwa ngai mosepela, zambi osikoli ngai.
Psal LinVB 71:24  Lolemu la ngai lokokumisa bosembo bwa yo ntango inso : baye baluki kosala ngai mabe bayoka nsoni mpe basambwa !
Chapter 72
Psal LinVB 72:1  Ya Salomo. E Nzambe, pesa mokonzi bwanya bwa yo, pesa bosembo bwa yo na mwana wa mokonzi,
Psal LinVB 72:2  ayangela bato ba yo na bosembo, akata makambo ma babola bo ebongi.
Psal LinVB 72:3  Bino, ngomba inene na ngomba ike, boyela bato ba ekolo boboto mpe bosembo.
Psal LinVB 72:4  Akata makambo ma bato bake na bosembo, abikisa babola mpe anyata banyokoli.
Psal LinVB 72:5  Bato babanga yo o bileko binso seko, mikolo minso sanza na mwese ikongala.
Psal LinVB 72:6  Aulana na mbula ekonokelaka bilanga, mpe na mai makopolisaka mabelé.
Psal LinVB 72:7  O eleko ya ye bosembo bokongala, mpe boboto bokozala tee sanza ekolimwa.
Psal LinVB 72:8  Akokonza ut’o mbu yoko kin’o mbu esusu, ut’o Ebale enene tee nsuka ya mokili.
Psal LinVB 72:9  Bato ba eliki bakumbamela ye, banguna ba ye bakolete mputulu.
Psal LinVB 72:10  Bakonzi ba Tarsis mpe ba bisanga mosika bakofuta ye mpako, bakonzi ba Saba na Seba bakoyela ye mabonza.
Psal LinVB 72:11  Bakonzi banso bakokumbamela ye, bato ba bikolo binso bakosalela ye.
Psal LinVB 72:12  Akobikisa mobola oyo abeleli ye, ná mpe moto moke azangi lisalisi.
Psal LinVB 72:13  Akoyokela moto motau mpe mobola mawa, akobikisa baye bakeleli.
Psal LinVB 72:14  Akobikisa bango o etumba mpe o minyoko, o miso ma ye bomoi bwa bango bozala na motuya mingi.
Psal LinVB 72:15  Azala seko ! Bapesa ye wolo ya Saba, bakosambelela ye ntango inso, butu moi bakobenisa ye.
Psal LinVB 72:16  Mbuma ya mampa itonda o mokili, kin’o nsonge ya ngomba, ebele lokola nzete ya Libano, ikoyikana lokola matiti o bilanga.
Psal LinVB 72:17  Bakumisa nkombo ya ye seko, nkombo ya ye eyebana o nse mobimba ! Bato banso bazwa bolamu mpo ya ye, o bikolo binso batanga ye moto wa esengo.
Psal LinVB 72:18  Bakumisa Mokonzi, Nzambe wa Israel, zambi se ye moko akosalaka makamwisi !
Psal LinVB 72:19  Bakumisa nkombo ya ye ya nkembo seko, nse mobimba etonda na nkembo ya ye ! Amen ! Amen !
Chapter 73
Psal LinVB 73:1  Nzembo ya Asaf. Ya solo, Nzambe akolakisaka Israel bolamu, Mokonzi alingi bato ba motema peto.
Psal LinVB 73:2  Etikalaki moke nakweya o nzela, etikalaki se moke naselumwa,
Psal LinVB 73:3  mpo nayokelaki bato bazangi mayele zuwa, na bomoni bomengo bwa baye baboya Nzambe.
Psal LinVB 73:4  Basengeli komitungisa te : nzoto kolongonu, bakomileisaka malamu ;
Psal LinVB 73:5  bakoyokaka mpasi te lokola bato basusu, mabe makokwelaka bango te lokola baninga ba bango.
Psal LinVB 73:6  Yango wana bakovimbaka na lolendo, balingi se makambo makasi makasi.
Psal LinVB 73:7  Nzoto mafuta ya bango elakisi motema mabe, bokosi botondi o mitema mya bango.
Psal LinVB 73:8  Balingi mingi koseke, koloba makambo mabe, mpe komikumisa na bokasi bwa bango.
Psal LinVB 73:9  Na monoko mwa bango bakotukaka Nzambe, mpe na lolemu la bango bakokinolaka bato banso.
Psal LinVB 73:10  Yango wana bato ba ngai balandi nzela ena, eye ekopesa bango bisengo ebele lokola mai.
Psal LinVB 73:11  Bakolobaka : « Nzambe akomono yango, solo ? Oyo azali o likolo ayebi nde eloko ? »
Psal LinVB 73:12  Botala bango, baye baboya Nzambe : na motema mpio bakokobaka kokongolo nkita.
Psal LinVB 73:13  Bongo ntina nini nábomba motema peto mpe nálakisa ’te nazali na likambo lyoko te ?
Psal LinVB 73:14  Mokolo na mokolo nazalaki koyoka mpasi, ntongo inso bapesaki ngai etumbu.
Psal LinVB 73:15  Soko nandimaki koloba lokola bango, mbele nasulaki libota lya bana ba yo.
Psal LinVB 73:16  Namekaki bongo koyeba ntina : komono bango bongo eyokisi ngai mpasi mingi !
Psal LinVB 73:17  Kasi o mokolo nakoyingela o ndako esantu ya Nzambe, nakomono polele boniboni bango bakosuka.
Psal LinVB 73:18  O nzela eye otiaki bango, bakoselumwa, mpe osali ’te bakweya o lobwaku.
Psal LinVB 73:19  Mpe na mbalakaka esili na bango, basuki, bakufi liwa lya nsomo !
Psal LinVB 73:20  E Mokonzi, lokola ndoto elimwi na ntongo, olamuki mpe obengani elili bya bango.
Psal LinVB 73:21  Ntango nakomaki koyoka bololo mpe mawa makotelaki ngai tee o minkuwa,
Psal LinVB 73:22  lokola zoba nayebaki ntina te, nakomaki lokola nyama o miso ma yo.
Psal LinVB 73:23  Nzokande nazali ntango inso pene na yo te ? Ozalaki kosimba ngai na loboko,
Psal LinVB 73:24  okokambaka ngai na malako ma yo, mpe na nsima okoyamba ngai o esika ya nkembo.
Psal LinVB 73:25  Soki yo te, nakokuta nde nani kuna o likolo ? Lokola nazali na yo awa o nse, naluka nani lisusu ?
Psal LinVB 73:26  Nzoto elembi, mpe motema lokola, na boluki yo, Nzambe, yo libanga mpe mobateli wa ngai seko.
Psal LinVB 73:27  Ya solo, bato bakimi yo, bakokufa ; okosilisa baye baboyi koyeba yo.
Psal LinVB 73:28  Nakozwa bolamu penepene na Nzambe, naluki libiki epai ya Mokonzi Nzambe mpo ’te nasakola bikela bya ye binso.
Chapter 74
Psal LinVB 74:1  Mateya ma Asaf. E Nzambe, mpo nini obwaki biso seko ? Mpo nini osilikeli mpata ya etonga ya yo ?
Psal LinVB 74:2  Kanisa libota yo oponoki ut’o libandela, ekolo eye osikolaki mpo ’te ezala mokili mwa yo, ngomba Sion esika oyei kofanda.
Psal LinVB 74:3  Kende kotala bisika bina bikufi nye ; o esika ya yo esantu monguna abebisi binso.
Psal LinVB 74:4  O esika tokutanaki na yo, banguna bagangi makasi, kuna batiaki bendele bo bilembo bya bango.
Psal LinVB 74:5  Bazalaki kobete na epasoli, lokola balingaki kopasola nzete ya zamba.
Psal LinVB 74:6  Babuki bikeko binso tosalaki, bakati byango na mbeli mpe na ebeteli.
Psal LinVB 74:7  Batumbi ndako ya yo esantu, babuki mpe basantoli ndako ya nkombo ya yo.
Psal LinVB 74:8  Bamilobeli : « Toboma yango na mbala yoko ! » Batumbi ndako inso ya losambo o ekolo.
Psal LinVB 74:9  Bendele ya biso imononi lisusu te, baprofeta mpe te, mpe moto moko te ayebi soko ekosuka boni.
Psal LinVB 74:10  E Nzambe, mikolo boni monyokoli akotuka yo naino ? Monguna akosantola nkombo ya yo nde seko ?
Psal LinVB 74:11  Mpo nini ozongisi loboko la yo ? Mpo nini obombi loboko la yo la mobali ?
Psal LinVB 74:12  Nzokande, e Nzambe, Mokonzi wa ngai uta ebandela, yo mobikisi wa bato ba ekolo ya biso,
Psal LinVB 74:13  na bokasi bwa yo opasolaki mai ma mbu, opasolaki mitó mya bibuki bya nyama ya mai.
Psal LinVB 74:14  Yo moto onyataki motó mwa Ngando enene, okomisaki mwango bilei bya nyama ya zamba.
Psal LinVB 74:15  Otimolaki maziba mpe miluka, okaukisaki bibale bizangi mai mokolo moko te.
Psal LinVB 74:16  Yo nkolo wa moi mpe wa butu, yo moto okeli sanza na mwese.
Psal LinVB 74:17  Okati ndelo ya mokili epai na epai, okaboli eleko ya molunge mpe eleko ya mpio.
Psal LinVB 74:18  Okundola ’te monguna akotukaka yo, Mokonzi, ekolo ya bilema bakofingaka nkombo ya yo.
Psal LinVB 74:19  Pekisa kombekombe ilia ebenga ya yo te, obosana bato ba yo te, awa bazali koyoka mpasi.
Psal LinVB 74:20  Okundola bondeko okataki na biso, bipai binso o ekolo ya biso mibenga mitondi na babomi.
Psal LinVB 74:21  Moto anyokwami asambwa lisusu te, mobola na moto wa mpasi bakumisa nkombo ya yo !
Psal LinVB 74:22  Teleme, e Nzambe, omilakisa, kanisa ’te elema akotukaka yo mikolo minso !
Psal LinVB 74:23  Obosana migango mya banguna ba yo te, makeléle ma baye bayini yo mazali se kongala.
Chapter 75
Psal LinVB 75:1  Ya kapita wa bayembi, lolenge loko na ‘Obebisa te’. Nzembo ya Asaf.
Psal LinVB 75:2  E Nzambe, totondi yo mingi mpenza, tokumisi nkombo ya yo mpe tosakoli makamwa ma yo.
Psal LinVB 75:3  « Ngai Nzambe nakosamba makambo na bosembo, o mokolo elaka ya ngai ekokoka.
Psal LinVB 75:4  Ata mokili mokwei na bato banso bazali wana, ngai moto napikaki makonzi makumbi mwango.
Psal LinVB 75:5  Nalobaki na bato ba lofundo : Botika kofunda ! mpe na baye baboyi ngai : Botika kobete ntolo !
Psal LinVB 75:6  Botika kotombola mapeke, mpe koloba na bovimbisi ntolo ! »
Psal LinVB 75:7  Libiki likouta o Esti to o Westi te, o eliki te, o ngomba mpe te.
Psal LinVB 75:8  Bobele Nzambe akosambisa bato, akokitisa moko, akotombola mosusu.
Psal LinVB 75:9  Mokonzi asimbi nkeni o maboko etondi na vino mpe na masanga bololo, akosopela bango, bato babe ba mokili, bakomele mango mpe bakosilisa manso.
Psal LinVB 75:10  Mpe ngai nakosakola yango ntango inso, nakoyembela Nzambe wa Yakob ;
Psal LinVB 75:11  nakobuka bokasi bwa basumuki mpe nakolongisa bato ba bosembo.
Chapter 76
Psal LinVB 76:1  Ya kapita wa bayembi ; na biyembeli bya nsinga. Nzembo ya Asaf.
Psal LinVB 76:2  Nzambe ayebani o mokili mwa Yuda, o Israel nkombo ya ye ezali na lokumu.
Psal LinVB 76:3  Ema ya ye etongami o Salem, ndako ya ye o ngomba Sion.
Psal LinVB 76:4  Kuna abuki makula na litimbo, nguba, mimpanga na bibuneli binso.
Psal LinVB 76:5  Ozali kongenge mpo ya mwinda mwa nkembo ya yo, mpo ya biloko ebele obotoloki banguna.
Psal LinVB 76:6  Bilombe banso balalaki mpongi ya seko, babuni ba mpiko bakokaki na bitumba lisusu te.
Psal LinVB 76:7  Yo Nzambe wa Yakob, okaneli bango, farasa na makalo ma bango ikangemi wana.
Psal LinVB 76:8  Yo Nzambe wa nsomo, nani akoki na yo soko nkanda ya yo enene engali ?
Psal LinVB 76:9  Ut’o likolo okati likambo, opesi mibeko ; o nse bato banso babangi mpe bakangi minoko,
Psal LinVB 76:10  ntango Nzambe atelemi mpo ’te akata makambo, mpe abikisa bato ba bosawa banso ba mokili.
Psal LinVB 76:11  Nkanda ya bato ekopesa yo lokumu, baye babiki o Nkanda ya yo bakokembisa yo.
Psal LinVB 76:12  Bolakela Mokonzi Nzambe wa bino bilako, bokokisa byango ; bino baye bozingi Nzambe wa nsomo, bobonzela ye mabonza ma bino.
Psal LinVB 76:13  Ye akokataka mpema ya bankumu banene, ye akobangisaka bakonzi ba nse.
Chapter 77
Psal LinVB 77:1  Ya kapita wa bayembi ; ya Yedutun. Nzembo ya Asaf.
Psal LinVB 77:2  Nabengi Nzambe na mongongo makasi, nabeleli Nzambe mpo ayoka ngai.
Psal LinVB 77:3  O ntango ya nsomo naluki Mokonzi. Butu mobimba natandi maboko, nalembi te, mpe nalingi te ’te moto abondo ngai.
Psal LinVB 77:4  Nakanisi Nzambe mpe nabandi kokimela, soko namanyoli mingi, motema mwa ngai mokomi kolembe.
Psal LinVB 77:5  Opekisi ngai kokanga miso, mayele ma ngai mabulungani, nakoki koloba te.
Psal LinVB 77:6  Nakanisi mikolo mya kala, nakundoli mibu mileki.
Psal LinVB 77:7  Na butu nazali komitungisa, nakanisi mingi mpe nazali komituna :
Psal LinVB 77:8  Mokonzi akoboya biso, solo ? Akolakisa biso bolamu bwa ye lisusu te ?
Psal LinVB 77:9  Bolingi bwa ye bosili nde libela ? Akotindela biso maloba ma ye lisusu te ?
Psal LinVB 77:10  Nzambe abosani koyokela biso mawa, solo ? Bongo akangi nde motema mpo ya nkanda ?
Psal LinVB 77:11  Namilobeli : « Mpo eyokisi ngai mpasi, yango eye : Nzambe akopangana na biso lisusu te ! »
Psal LinVB 77:12  Nakundoli bikela binene bya Mokonzi mpe makamwisi ma ye ma kala.
Psal LinVB 77:13  Nakanisi lisusu misala mya yo minene, namanyoli myango mbala na mbala.
Psal LinVB 77:14  E Nzambe, nzela ya yo, izali isantu ; nzambe mosusu azali nde, monene lokola yo ?
Psal LinVB 77:15  Se yo, Nzambe, osali makamwa ma solo, mpe olakisi bato ba bikolo binso nguya ya yo.
Psal LinVB 77:16  Osikolaki ekolo ya yo na bokasi bwa loboko la yo, obikisaki bana ba Yakob mpe ba Yozefu.
Psal LinVB 77:17  Mai ma mbu mamonoki yo, Nzambe, mai mamonoki yo malengeki mpe bozindo bwa mai boninganaki ;
Psal LinVB 77:18  mampata manokisaki mbula mpe mayokisaki makeléle, mpe minkalali mitindamaki lokola makula ma móto.
Psal LinVB 77:19  O ntango nkake ezalaki kobete, minkalali mizalaki kongengele mokili, nse mobimba elengeki mpe eninganaki.
Psal LinVB 77:20  Opasolaki nzela o kati ya mai ma mbu, olekaki o kati ya mai bozindo, mpe moto moko te amoni esika olekaki.
Psal LinVB 77:21  Okambaki bato ba yo lokola etonga ya mpata na maboko ma Moze mpe ma Arone.
Chapter 78
Psal LinVB 78:1  Mateya ma Asaf. E bato ba ngai, boyoka mateya ma ngai, botia matoi na maloba ma monoko mwa ngai.
Psal LinVB 78:2  Nakofungola monoko mpo ya koloba na miulani, nakokundola maye Nzambe asalaki liboso.
Psal LinVB 78:3  Maye toyokaki, toyebi mango ; maye bankoko ba biso basololaki biso,
Psal LinVB 78:4  tokobombela bana ba biso mango te ; tokosolola mango na mabota makoya nsima : nkombo inso ya lokumu la Mokonzi, nguya ya ye, mpe makamwa asalaki.
Psal LinVB 78:5  Alakisaki bana ba Yakob mitindo mya ye, apesaki Israel mobeko. Apesaki batata ba biso etinda ’te balakisa mango na bana ba bango,
Psal LinVB 78:6  mpo ’te bana bakobotama nsima bayeba, bankoko bakobotama nsima ya bango mpe bayeba. Bateleme mpe balekisa nsango epai ya bana ba bango ;
Psal LinVB 78:7  mpo ’te batia elikya na Nzambe, babosana bikela binene bya Nzambe te, mpe batosa mibeko mya ye,
Psal LinVB 78:8  mpo ’te bakoma lokola batata ba bango te, bato ba lolendo mpe batomboki, libota lya bato ba motema moko te, baye baboyaki kotia mitema na Nzambe.
Psal LinVB 78:9  Bana ba Efraim bayebaki kobunda na litimbo solo, kasi o mokolo mwa etumba bakimaki.
Psal LinVB 78:10  Babomaki bondeko na Nzambe, baboyaki kolanda nzela ya mibeko mya ye.
Psal LinVB 78:11  Babosanaki bikela bya ye na makamwa alakisaki bango.
Psal LinVB 78:12  O miso ma bankoko Nzambe asalaki makamwa, o mokili mwa Ezipeti, o mabelé ma Tanis.
Psal LinVB 78:13  Apasolaki mai ma mbu mpo ’te bakoma o ngambo, atelemisaki mai lokola efelo.
Psal LinVB 78:14  Na moi akambaki bango na limpata, na butu atambwisaki bango na mwinda mwa móto.
Psal LinVB 78:15  Apasolaki mabanga o eliki, amelisaki bango mai maike lokola ebale.
Psal LinVB 78:16  Abimisaki mai o libanga, mpe mai makomaki kotiyola lokola ebale.
Psal LinVB 78:17  Nzokande bakobaki kosala masumu o miso ma ye mpe kotombokela Nta-Likolo o eliki.
Psal LinVB 78:18  Balingaki komeka Nzambe, basengeki bilei lokola bango moko balingaki,
Psal LinVB 78:19  batombokoki na Nzambe mpe balobaki : « Nzambe akoki nde kopesa bilei o eliki ?
Psal LinVB 78:20  Solo, abeteki libanga mpe mai mabimaki, mai masopanaki lokola ebale enene ; kasi akoki nde kopesa mampa lokola, mpe kokabolela bato ba ye nyama balia ? »
Psal LinVB 78:21  Eyokaki Mokonzi bongo, asilikaki mpenza, móto mopelaki likolo lya Yakob, nkanda ekwelaki Israel,
Psal LinVB 78:22  mpamba te, bazalaki koyamba Nzambe te, mpe bazalaki na elikya ya kobika mpo ya ye te.
Psal LinVB 78:23  Apesaki mampata ma likolo etinda, afungolaki bizibeli bya likolo.
Psal LinVB 78:24  Mpo ya koleisa bango anokisaki mbula ya manu, akabelaki bango mbuma ya mampa mauti o likolo.
Psal LinVB 78:25  Bato banso bakomaki kolia mampa ma banzelu, atindelaki bango bilei biike tee batondaki.
Psal LinVB 78:26  O likolo abimisaki mompepe mwa Esti, na nguya ya ye atindaki mompepe mwa Sudi.
Psal LinVB 78:27  Akitiselaki bango nyama ya kolia, mingi lokola mputulu, mpe ndeke mingi, ebele lokola zelo ya mbu.
Psal LinVB 78:28  Nyama ina ikweyaki o nganda ya bango, zongazonga na biema bya bango.
Psal LinVB 78:29  Baliaki, bameleki mpe batondaki ; apesaki bango bilei lokola balingaki.
Psal LinVB 78:30  Mposa ya bango esilaki naino te, ata bazalaki na bilei o minoko.
Psal LinVB 78:31  Yango wana Nzambe ayokelaki bango nkanda ; o kati ya bango abomaki bilombe, asilisaki bilenge na banzenga ba Israel.
Psal LinVB 78:32  Ata bongo, basumukaki lisusu, batiaki se ntembe na makamwisi ma ye.
Psal LinVB 78:33  Abotoloki bango bomoi na mbala yoko, mibu mya bango misilaki bobele o kati ya nsomo.
Psal LinVB 78:34  Ntango Nzambe azalaki koboma bango, balukaki ye, babongolaki mitema mpe bazongelaki ye.
Psal LinVB 78:35  Bakanisaki lisusu ’te Nzambe azali libanga lya bango, ’te Nzambe wa likolo azalaki mobikisi wa bango.
Psal LinVB 78:36  Kasi na monoko bazalaki kokosa ye, mpe na lolemu bazalaki kobukela ye lokuta.
Psal LinVB 78:37  Bandimaki ye na motema moko te, mpe batiaki ntembe na bondeko bwa ye.
Psal LinVB 78:38  Kasi ye ayokelaki bango ngolu, alimbisaki bango, abomaki bango te. Akangaki motema mbala na mbala, mpe alandaki nkanda ya motema te.
Psal LinVB 78:39  Akundolaki o motema ’te bazalaki bobele bato, lokola mpema mpamba ekolimwaka mpe ekozongaka te.
Psal LinVB 78:40  Mbala mingi batombokoki na ye o eliki, mpe batumolaki ye o bisika bato bakofandaka te.
Psal LinVB 78:41  Babandaki lisusu komeka Nzambe mpe koyokisa Mosantu wa Israel mawa.
Psal LinVB 78:42  Babosanaki misala mya loboko la ye, o mokolo abikisaki bango o maboko ma banguna :
Psal LinVB 78:43  alakisaki bilembo o Ezipeti mpe makamwisi o Tanis.
Psal LinVB 78:44  Abongolaki mai ma ebale mpe ma miluka, akomisaki mango makila, mpo ’te bakoka komele mango te.
Psal LinVB 78:45  Atindelaki bango mpese isilisa binso, na magbololo matungisa bango.
Psal LinVB 78:46  Atindaki mapalela masilisa bilanga bya bango, na makélele mabebisa mosala mwa bango.
Psal LinVB 78:47  Abomaki bilanga bya vino na mbula ya matandala, mpe nzete ya sikomore na mpio makasi.
Psal LinVB 78:48  Atindaki ’te mbula ya matandala ekwela ngombe ya bango mpe minkalali mibetele bibwele bya bango.
Psal LinVB 78:49  Abwakelaki bango móto mwa nkanda ya ye, ayokelaki bango nkanda enene, eyokisaki bango nsomo : atindelaki bango bantoma baye bayokisa bango mpasi.
Psal LinVB 78:50  Amitikaki na nkanda ya ye, abikisaki bango o liwa te, kasi atikaki bango bakufa na bokono bobe.
Psal LinVB 78:51  Abomaki bana ba yambo banso o Ezipeti, banzenga kitoko o biema bya Kam.
Psal LinVB 78:52  Kasi akambaki bana ba ye lokola mpata, atambwisaki bango o eliki lokola etonga.
Psal LinVB 78:53  Akambaki bango malamu, babangaki eloko te, o ntango mai ma mbu mazalaki kozindisa banguna.
Psal LinVB 78:54  Akotisaki bango o mokili mwa ye mosantu, o ngomba eye bazwaki na bokasi bwa loboko la ye.
Psal LinVB 78:55  Abenganaki bapagano o boso bwa bango, akabelaki bango mabelé mpo ’te bafanda, afandisaki mabota ma Israel o biema bya banguna.
Psal LinVB 78:56  Batombokoki lisusu mpe bamekaki Nzambe wa Nta-Likolo. Baboyaki kotosa mibeko mya ye.
Psal LinVB 78:57  Bapengwaki mpe baboyaki ye, lokola bankoko basalaka, bawanganaki ye lokola litimbo liboyi kobete.
Psal LinVB 78:58  Batumolaki ye na bokumisi banzambe basusu, bayokisaki ye zuwa na bikeko bya bango.
Psal LinVB 78:59  Eyokaki Nzambe bongo, asilikaki, aboyaki ba-Israel libela.
Psal LinVB 78:60  Alongwaki o ndako ya ye o Silo, atikaki ema esika afandaki o ntei ya bato.
Psal LinVB 78:61  Akabaki Sanduku ya Bondeko ekende o boombo, elembo ya nkembo ya ye ekomi o maboko ma banguna.
Psal LinVB 78:62  Atikaki bato ba ye bakufa na mompanga, asilikaki na bato ba ekolo ya ye.
Psal LinVB 78:63  Móto mosilisaki banzenga ba bango, mpe bilenge basi bayokaki nzembo ya libala lisusu te.
Psal LinVB 78:64  Banganga Nzambe bawaki na mompanga, mpe basi ba bango bayembaki nzembo ya lilaka lisusu te.
Psal LinVB 78:65  Mpe Mokonzi alamukaki lokola moto auti kolala mpongi, lokola soda ameli vino mpe azwi mpiko ya sika.
Psal LinVB 78:66  Abeteki mpe akimisaki banguna ba bango, mpe ayokisaki bango nsoni seko.
Psal LinVB 78:67  Aboyaki kofanda o ema ya Yozefu, alingaki kopono libota lya Efraim lisusu te ;
Psal LinVB 78:68  kasi aponoki libota lya Yuda, aponoki ngomba Sion eye alingaki.
Psal LinVB 78:69  Atongaki esika ya ye esantu o bosanda lokola likolo, epikama makasi lokola mokili, moye akelaki.
Psal LinVB 78:70  Aponoki Davidi azala mosaleli wa ye, alongolaki ye o lopango la bibwele ;
Psal LinVB 78:71  abengaki ye ntango azalaki koleisa mpata, akomisaki ye mokengeli wa Yakob, ekolo ya ye, azala mobokoli wa Israel, libota lya ye.
Psal LinVB 78:72  Ye abokoloki bango na motema moko mpenza, mpe akambaki bango na bwanya mpe na mayele.
Chapter 79
Psal LinVB 79:1  Nzembo ya Asaf. E Nzambe, bapagano bakoti o ekolo ya yo, babebisi Tempelo ya yo esantu, bakomisi Yeruzalem mopotu monene.
Psal LinVB 79:2  Babwaki bibembe bya basaleli ba yo bo bilei bya ndeke, nzoto ya bato ba yo ikomi bilei bya nyama ya zamba.
Psal LinVB 79:3  Makila ma bango masopani o Yeruzalem mobimba, mpe moto akokunda bango azalaki te.
Psal LinVB 79:4  Bato ba bikolo bya penepene bakofingaka biso, o bikolo bisusu bakotiolaka mpe bakosekeke biso.
Psal LinVB 79:5  Mokonzi, nkanda ya yo ekoumela mikolo boni ? Mpe zuwa lya yo linene likosila ntango nini ?
Psal LinVB 79:6  Silikela bato ba bikolo bisusu bayebi yo te na mpe bato ba mikili bakobondelaka nkombo ya yo te.
Psal LinVB 79:7  Mpo bango basilisi bato ba Yakob na kolia, babebisi mokili mwa yo nye.
Psal LinVB 79:8  Ofutisa biso masumu ma bankoko te, lakisa biso ngolu ya yo, mpo mawa maleki.
Psal LinVB 79:9  Salisa biso, Nzambe mobikisi wa biso, mpo ya lokumu la nkombo ya yo. Bikisa biso, limbisa masumu ma biso mpo ya nkombo ya yo.
Psal LinVB 79:10  Olinga te ’te bato ba bikolo bisusu baloba : « Nzambe wa bango azali wapi ? » Olakisa bango polele o miso ma biso ’te okozongisa mabe na bato basopaki makila ma basaleli ba yo !
Psal LinVB 79:11  Yoka boleli bwa bato bakangemi o boombo ; na bokasi bwa yo bikisa baye bazali kobunda na liwa !
Psal LinVB 79:12  Bato ba bikolo bisusu bayokisi yo mpasi, Mokonzi, zongisela bango mbala nsambo mafinga bafingaki yo.
Psal LinVB 79:13  Mpe biso, ekolo ya yo, mpata ya etonga ya yo, tokotondo yo ntango inso, mpe tokosakola lokumu la yo o bileko binso.
Chapter 80
Psal LinVB 80:2  E mokengeli wa Israel, oyoka : yo moto okokambaka libota lya Yozefu lokola etonga, awa ofandi likolo lya bakerubim,
Psal LinVB 80:3  omiyebisa na Efraim, Benyamin na Manase ; lakisa nguya ya yo mpe yaka kosalisa biso !
Psal LinVB 80:4  E Nzambe, bongola mitema mya biso, lakisa elongi ya yo mpe tokobika.
Psal LinVB 80:5  E Mokonzi wa bokasi bonso, mikolo boni okosilikela bato ba yo bazali kobondela yo ?
Psal LinVB 80:6  Okomisi mpizoli bilei bya biso, mpe omelisi biso se kopo etondi na yango.
Psal LinVB 80:7  Okomisi biso ntina ya boswani ya bikolo bisusu, banguna ba biso bakomi koseke biso.
Psal LinVB 80:8  E Nzambe wa bokasi bonso, bongola mitema mya biso, lakisa elongi ya yo mpe tokobika.
Psal LinVB 80:9  Biso elanga ya nzete ya vino, eye olongolaki o Ezipeti, obenganaki bato ba bikolo bisusu mpo ya kolona biso awa.
Psal LinVB 80:10  Obongiseli biso esika mpo topikama makasi, mpe totonda o mokili mwa bango.
Psal LinVB 80:11  Ngomba inso iyei kozipama na nkasa ya nzete ya yango, bitapi bya yango bikoli lokola nzete enene ya Nzambe.
Psal LinVB 80:12  Bitapi bya yango bitandani kin’o mbu, mpe bana ba yango bakimi kin’o Ebale enene.
Psal LinVB 80:13  Mpo nini obukaki lopango la elanga ena, bongo bato banso bakoleka wana babuka mbuma,
Psal LinVB 80:14  nsombo ya zamba ibebisa yango, mpe nyama ya esobe ilia nkasa ya yango ?
Psal LinVB 80:15  E Nzambe wa bokasi bonso, ozongela biso. Ut’o likolo oya kotala mpe omono, yingela o elanga ya yo ya nzete ya vino :
Psal LinVB 80:16  obatela yango, yo moto olonaki yango, yaka kosalisa mwana oyo alendi mpo ya yo.
Psal LinVB 80:17  Bato batumbi yango lokola matiti mabe ; soko otali bango na miso makasi, banso bakokufa.
Psal LinVB 80:18  Na nguya ya yo batela moto oyo yo moko oponoki, batela mpe mwana oyo yo olendisaki.
Psal LinVB 80:19  Mpe bongo, biso tokolongwa epai ya yo lisusu te, zongisela biso bomoi, tokumisa nkombo ya yo.
Psal LinVB 80:20  Mokonzi Nzambe wa bokasi bonso, bongola mitema mya biso, lakisa elongi ya yo mpe tokobika.
Chapter 81
Psal LinVB 81:1  Ya kapita wa bayembi ; na eyembeli ya mboka Gat. Nzembo ya Asaf.
Psal LinVB 81:2  Boganga na nsai mpo ya Nzambe, nguya ya biso, bobetele Nzambe wa Yakob maboko.
Psal LinVB 81:3  Bobanda nzembo, bobete mbonda, bolelisa lokombe na nzenze.
Psal LinVB 81:4  Bobete mindule o mokolo mwa yambo mwa sanza, o mokolo sanza engali : eyenga ya biso.
Psal LinVB 81:5  Ezali mobeko Israel azwi, motindo Nzambe wa Yakob apesi.
Psal LinVB 81:6  Atindaki bana ba Yozefu mobeko mona, o ntango babimaki o mokili mwa Ezipeti. Nayoki lokota loye loyokani naino te :
Psal LinVB 81:7  « Nalongoli mokumba o mapeke ma ye, maboko ma ye makitisi ekoló eye azalaki kokumba.
Psal LinVB 81:8  Ntango olelaki mpo ya mpasi, nabikisaki yo, nayanolaki yo o kati ya mompepe makasi, mpe namekaki yo motema penepene na mai ma Meriba.
Psal LinVB 81:9  Bato ba ngai, boyoka ngai, nakebisi bino, Israel, ndima koyoka maloba ma ngai !
Psal LinVB 81:10  Okoki kozala na nzambe wa ekolo esusu te, okumbamela nzambe mosusu te.
Psal LinVB 81:11  Ngai nazali Mokonzi Nzambe wa yo, oyo abimisaki yo o mokili mwa Ezipeti ; fungola monoko polele, ngai nakotondisa mwango.
Psal LinVB 81:12  Bato ba ngai bayokaki maloba ma ngai te, Israel aboyaki kotosa ngai.
Psal LinVB 81:13  Bongo natikaki bango na lolendo o motema, balandaki bobele nzela bango moko balingaki.
Psal LinVB 81:14  Soko bato ba ngai balingaki koyoka ngai, soko Israel alingaki kolanda nzela ya ngai,
Psal LinVB 81:15  mbele nasukisi banguna noki mpenza, mbele nabandi kobete banyokoli ba Israel,
Psal LinVB 81:16  mbele bato bayini Mokonzi bakobondela ye, mpe bakoyoka nsomo seko.
Psal LinVB 81:17  Mbele Mokonzi aleisi Israel mampa ma motuya mpe atondisi ye na mafuta elengi ma nzoi. »
Chapter 82
Psal LinVB 82:1  Nzembo ya Asaf. Nzambe atelemi o likita lya bankumu o likolo, o kati ya bazuzi azali kosamba makambo :
Psal LinVB 82:2  « Bino bazuzi, mikolo boni naino bokozanga bosembo, mpe bokondimela baye basali mabe ?
Psal LinVB 82:3  Bokata makambo ma bato bake na bana bitike na bosembo, bobatela moto wa mpasi na moto akeleli.
Psal LinVB 82:4  Bobikisa moto motau na mobola, bolongola bango o maboko ma bato bakosalaka mabe.
Psal LinVB 82:5  Bango bayebi eloko te, bayoki ntina te, batamboli o kati ya molili ; makonzi manso ma mokili mabulungani.
Psal LinVB 82:6  Ngai nalobaki : ‘Bino banzambe, bino banso bozali bana ba Nta-Likolo’.
Psal LinVB 82:7  Nzokande, bino mpe bokokufa lokola bato banso, bokokweya lokola bankumu banso. »
Psal LinVB 82:8  E Nzambe, teleme ! Zala zuzi wa mokili, zambi okoyangelaka bikolo binso.
Chapter 83
Psal LinVB 83:2  E Nzambe, otika kotala biso bobele na miso, tika kopema mpe kofanda nye, e Nzambe !
Psal LinVB 83:3  Yoka banguna ba yo bazali konunganunga, bato bakoyinaka yo, batomboli mitó na lolendo.
Psal LinVB 83:4  Baluki ekolo ya yo na makambo, bakaneli bato ba yo ba bolingo.
Psal LinVB 83:5  Balobi : « Tokende koboma ekolo ya bango, moto moko te atanga lisusu nkombo ya Israel ! »
Psal LinVB 83:6  Banso motema moko bayokani bongo mpe bakati bondeko mpo ya kobunda na yo :
Psal LinVB 83:7  bato ba Edom na bato ba Ismael, bato ba Moab na bato ba Agar,
Psal LinVB 83:8  bato ba Gebal, ba Amon mpe ba Amalek, ba Filisti mpe ba Tiro.
Psal LinVB 83:9  Ata ba-Asur balandi bango, mpe bapesi maboko na bana ba Lot.
Psal LinVB 83:10  Sala na bango lokola osalaki na Madian, na Sisera mpe na Yabin pene na ebale ya Kison.
Psal LinVB 83:11  Babomamaki o Endor, bibembe bya bango bikomaki bipolu bya bilanga.
Psal LinVB 83:12  Okomisa bankumu ba bango lokola Oreb na Zeeb, bayangeli ba bango lokola Zeba na Salmuna,
Psal LinVB 83:13  baye balobaki : « Biso tokobotolo mikili mya Nzambe ! »
Psal LinVB 83:14  E Nzambe wa ngai, pimbwisa bango lokola nkasa, lokola mputulu etombwami na mompepe.
Psal LinVB 83:15  Lokola móto mokozikisa zamba, lokola móto mosilisa ngomba,
Psal LinVB 83:16  tinda mompepe makasi molanda bango, ekumbaki ya yo eyokisa bango nsomo.
Psal LinVB 83:17  Tondisa bilongi bya bango na nsoni, mpo ’te baluka nkombo ya yo, e Mokonzi.
Psal LinVB 83:18  Bayoki nsoni na nsomo seko, bakufa na nsoni, basila libela ;
Psal LinVB 83:19  bayeba ’te se yo ozali na nkombo ya Mokonzi, yo moko Nta-Likolo o mokili mobimba.
Chapter 84
Psal LinVB 84:1  Ya kapita wa bayembi ; na eyembeli ya mboka Gat. Nzembo ya bana ba Kore.
Psal LinVB 84:2  E Mokonzi wa bokasi bonso, kofanda o ndako ya yo ezali elengi mingi !
Psal LinVB 84:3  Nawei na mposa ya kozala o lopango la Mokonzi. Na esengo enene motema mozali kobelela Nzambe wa bomoi.
Psal LinVB 84:4  Ata ndeke eke ekozwaka ndako, nyampeke ekozwaka zumbu mpo ya kobomba bana ba yango, penepene na altare ya yo, Nzambe wa bokasi bonso, yo Mokonzi wa ngai mpe Nzambe wa ngai !
Psal LinVB 84:5  Esengo na bato bakozalaka o ndako ya yo, baye bakoki kokumisa yo ntango inso !
Psal LinVB 84:6  Esengo na bato bazwi bokasi mpo ya yo, kokende losambo o engumba esantu ekosepelisaka bango.
Psal LinVB 84:7  Ntango bakolekaka o lobwaku la Boleli, bakomeleke mai ma liziba, mbula ya yambo ekotoisa milona mya yango.
Psal LinVB 84:8  Bakokoba se kotambola na mpiko ya sika kin’o bakobima o Sion o boso bwa Nzambe.
Psal LinVB 84:9  Mokonzi wa bokasi bonso, yoka losambo la ngai, Nzambe wa Yakob, tia matoi.
Psal LinVB 84:10  E Nzambe, yo nguba ya biso, tala, tala elongi ya mesiya wa yo.
Psal LinVB 84:11  Kofanda mokolo moko o lopango la yo eleki mikolo nkoto na elengi, naponi kozala pene na ezibeli ya ndako ya Nzambe, naboyi kofanda o ema ya bato babe.
Psal LinVB 84:12  Solo, Mokonzi Nzambe azali lopango mpe nguba, Mokonzi akokabaka bolamu mpe nkembo, akopima makabo ma ye te na bato ba bosembo.
Psal LinVB 84:13  E Mokonzi wa bokasi bonso, esengo na moto akotia motema na yo !
Chapter 85
Psal LinVB 85:2  E Mokonzi, olakisi ekolo ya yo bolingi, ozongisi bana ba Yakob bakendeki o boombo ;
Psal LinVB 85:3  olimbisi mabe ma bato ba yo, okundi masumu ma bango manso.
Psal LinVB 85:4  Otiki koyokela bango nkanda, ozimisi móto mwa nkele ya yo.
Psal LinVB 85:5  E Nzambe, Mokonzi wa biso, bongola mitema mya biso, tika kobombela biso nkanda.
Psal LinVB 85:6  Okosilikela biso nde seko ? Okolakisa biso nkele o bileko binso ?
Psal LinVB 85:7  Yo moto okolendisaka bomoi bwa biso te ? Mpo ’te bato ba yo basepela yo,
Psal LinVB 85:8  e Mokonzi, olakisa biso bolingi bwa yo, opesa biso libiki lya yo.
Psal LinVB 85:9  Nalingi koyoka maloba ma Mokonzi Nzambe, maloba ma ye, maloba ma boboto, ona bato ba ye mpe baye bayambi ye, mpo ’te bazonga lisusu o nzela ya bolema te.
Psal LinVB 85:10  Etikali moke abikisa baye bakobangaka ye mpe nkembo ya ye ezonga o ekolo ya biso.
Psal LinVB 85:11  Bolingi na Bosolo bikutani, Boboto na Bosembo bizwani.
Psal LinVB 85:12  Bosolo bokobanda komonono o ntei ya bato, ut’o likolo Bosembo bokokitela bango.
Psal LinVB 85:13  Mokonzi yemei akopesa biso bolamu, mpe mokili mwa biso mokobota mbuma.
Psal LinVB 85:14  Bosembo bokotambola o boso bwa ye, mpe bokobongisela ye nzela.
Chapter 86
Psal LinVB 86:1  Losambo la Davidi. E Mokonzi, otia matoi mpe oyanola ngai, nazali mobola, moto wa mawa.
Psal LinVB 86:2  Batela bomoi bwa ngai, moto wa yo. E Nzambe, bikisa ngai, mosaleli wa yo, natii motema na yo.
Psal LinVB 86:3  E Mokonzi, yokela ngai mawa, moi mobimba nazali kobelela yo.
Psal LinVB 86:4  Yokisa motema mwa mosaleli wa yo esengo. nakotombola motema mwa ngai epai ya yo, e Mokonzi.
Psal LinVB 86:5  E Mokonzi, ozali motema ngolu mpe bolamu, okolakisaka bolingi na baye bakobelela yo.
Psal LinVB 86:6  E Mokonzi, yoka losambo la ngai, yokemela mabondeli ma ngai.
Psal LinVB 86:7  O ntango nayoki nsomo, nakobyanga yo, zambi yo, Mokonzi, okoyanola ngai.
Psal LinVB 86:8  Nzambe mosusu akokani na yo azali te, mosala moko te mokoki na misala mya yo.
Psal LinVB 86:9  Mokonzi, bato ba bikolo binso bakoya kokumbamela yo, bakoya kokumisa nkombo ya yo,
Psal LinVB 86:10  zambi bobele yo, Nzambe, ozali monene mpe okosalaka makamwa.
Psal LinVB 86:11  E Mokonzi, lakisa ngai nzela ya yo, bongo nalanda bobele bosolo bwa yo, nabanga nkombo ya yo na motema moko.
Psal LinVB 86:12  E Mokonzi Nzambe wa ngai, natondi yo, nakokumisa nkombo ya yo o bileko binso,
Psal LinVB 86:13  zambi olingi ngai na bolingi bonene, olongoli ngai o libulu lya mboka ya bawa.
Psal LinVB 86:14  E Nzambe, bato ba lofundo babimeli ngai, bato ba bitumba baluki koboma ngai, baye bakokanisaka yo soki moke te.
Psal LinVB 86:15  Yo Mokonzi, Nzambe wa bolamu mpe wa ngolu, okosilikaka noki te, yo nta bolingi mpe lobokó,
Psal LinVB 86:16  bongola miso epai ya ngai, yokela ngai mawa ! Pesa ngai, mosaleli wa yo, nguya ya yo, mpe bikisa ngai, mwana wa mosali wa yo.
Psal LinVB 86:17  Lakisa ngai elembo ya bolingi bwa yo ; bongo banguna bakomono yango bakoyoka nsoni, zambi yo, Mokonzi, osalisi mpe obondi ngai.
Chapter 87
Psal LinVB 87:1  Nzembo ya bana ba Kore. Mokonzi atongi Sion o ngomba isantu,
Psal LinVB 87:2  alingi bizibeli bya ye leka ndako inso ya Yakob.
Psal LinVB 87:3  Balobaki maloba ma bokumisi mpo ya yo, engumba ya Nzambe :
Psal LinVB 87:4  « Natangi Rakab mpe Babilon o kati ya baye bayebi ngai. O Filistia, o Tiro to o Etiópia oyo to oyo abotami. »
Psal LinVB 87:5  Kasi mpo ya Sion bakolobaka : « Moto nyonso abotami wana, mpo Nzambe wa Nta-Likolo akelaki yango. »
Psal LinVB 87:6  O buku ya bikolo Mokonzi akomi boye : « Oyo azali mwana mboka. »
Psal LinVB 87:7  Banso bakoyemba mpe bakobina : « Manso mazali na ngai, mauti se epai ya yo ! »
Chapter 88
Psal LinVB 88:1  Nzembo ya bana ba Kore. Ya kapita wa bayembi. Maloba ma Eman, mwana wa Zera (1 Mkl 2,6).
Psal LinVB 88:2  E Mokonzi Nzambe, na moi nabeleli yo, na butu namileli epai ya yo.
Psal LinVB 88:3  Losambo la ngai lokoma tee epai ya yo, tia matoi na boleli bwa ngai,
Psal LinVB 88:4  mpo motema mwa ngai motondi na mawa, nakomi penepene na mboka ya bawa.
Psal LinVB 88:5  Batangi ngai o molongo mwa bato basili kokunda, natikali na makasi lisusu te.
Psal LinVB 88:6  Nasili nakomi o kati ya bawa, lokola bibembe bilali o malita, biye okokanisaka lisusu te, mpo bikabwani na yo libela.
Psal LinVB 88:7  Ozindisi ngai o bozindo bwa mboka ya bawa, o kati ya molili mpe o lobwaku.
Psal LinVB 88:8  Nkanda ya yo enyati ngai, osopeli ngai yango lokola mai ma mbonge.
Psal LinVB 88:9  Olongoli ngai mosika na baye bayebi ngai, o miso ma bango okomisi ngai eloko ya nsomo. Nakangemi, nzela ya kobima ezali te.
Psal LinVB 88:10  Miso ma ngai malembi mpo ya mawa. Moi mobimba nakobyangaka yo, Mokonzi, mpe nakotandelaka yo maboko :
Psal LinVB 88:11  « Okosalaka nde makamwa mpo ya bawei ? Bato bawei bakoteleme nde mpo ya kokumisa yo ?
Psal LinVB 88:12  O malita bakosakolaka nde bolingi bwa yo ? O mboka ya bawa bakotangaka nde lobokó la yo ?
Psal LinVB 88:13  Bakoyebaka nde makamwa ma yo o kati ya molili, mpe bosembo bwa yo o mboka ya bawa ? »
Psal LinVB 88:14  Kasi nakobelelaka yo, Mokonzi, na ntongo losambo la ngai lokobutaka epai ya yo.
Psal LinVB 88:15  E Mokonzi, mpo nini obwaki ngai ? Mpo nini obombeli ngai elongi ya yo ?
Psal LinVB 88:16  Nazali na mpasi, ut’o bomwana mpema esileli ngai, oyokisi ngai nsomo, nakangi motema tee nalembi.
Psal LinVB 88:17  Nkanda ya yo inso ikweli ngai, makambo ma yo ma nsomo manyati ngai,
Psal LinVB 88:18  mazingi ngai mikolo minso lokola mai, mayeli ngai bipai binso.
Psal LinVB 88:19  Olongoli bandeko na bayebani epai ya ngai ; moninga wa ngai, nde molili.
Chapter 89
Psal LinVB 89:2  Nakoyembela bolingi bwa Mokonzi seko, o bileko binso nakosakola lobokó la yo.
Psal LinVB 89:3  Olobaki : « Bolingi bwa yo, bolingi bwa seko », opikaki lobokó la yo o likolo.
Psal LinVB 89:4  Nakataki bondeko na moto oyo naponoki, nalayelaki Davidi, mosaleli wa ngai, ndai eye :
Psal LinVB 89:5  « Nakosala ’te libota lya yo lizala na bokonzi seko, nakotongela yo ngwende o bileko na bileko. »
Psal LinVB 89:6  Ba-likolo bakotondoko yo, Mokonzi, mpo ya makamwa ma yo, bakoyembelaka lobokó la yo o likita lya basantu.
Psal LinVB 89:7  Kuna o likolo nani akokani na yo, Mokonzi ? O kati ya banzambe basusu nani azali lokola Mokonzi ?
Psal LinVB 89:8  O likita lya basantu Nzambe aleki nsomo, aleki na bonene mpe na bokasi baye bazingi ye.
Psal LinVB 89:9  E Mokonzi Nzambe wa bokasi bonso, nani azali lokola yo ? Ozali nta bokasi, nta lobokó !
Psal LinVB 89:10  Yo moto okokitisaka lolendo la mbu, okolembisaka mbonge soko mbu etomboki.
Psal LinVB 89:11  Yo moto olongaki mpe opasolaki ebuki ya mbisi, opanzaki banguna ba yo na bokasi bwa loboko la yo.
Psal LinVB 89:12  Yo nkolo wa likolo, yo nkolo wa nse, okelaki mokili na biloko binso bizali wana.
Psal LinVB 89:13  O Nordi mpe o Sudi, okelaki binso, ngomba Ermon na Tabor ikoyembelaka nkombo ya yo.
Psal LinVB 89:14  Loboko la yo lozali na nguya enene, loboko la yo la mobali nta bokasi lokolongaka binso.
Psal LinVB 89:15  Ngwende ya yo epikami o bosembo, bolingi mpe lobokó bikotambolaka o boso bwa yo.
Psal LinVB 89:16  Esengo na bato bakokumisaka yo na nzembo ! Bakotambolaka o mwinda mwa elongi ya yo, Mokonzi !
Psal LinVB 89:17  Mpo ya nkombo ya yo bakoyokaka nsai ntango inso, lokumu la bango, nde bosembo bwa yo.
Psal LinVB 89:18  Yo, ntina ya bokasi bwa bango, okolendisaka biso na bolamu bwa yo.
Psal LinVB 89:19  Nzambe akolendisaka mobateli wa biso, Mosantu wa Israel, nguya ya mokonzi wa biso.
Psal LinVB 89:20  Kala olobaka na bayambi ba yo o ndoto : « Napesi elombe moko lisalisi lya ngai, natomboli elenge moko wa ekolo ya ngai.
Psal LinVB 89:21  Nazwi Davidi, mosaleli wa ngai, napakoli ye mafuta masantu ma bokonzi.
Psal LinVB 89:22  Na loboko la ngai nakolendisa ye, loboko la ngai lokopesa ye makasi.
Psal LinVB 89:23  Monguna moko te akolonga ye na mbalakaka, moto wa motema mabe akonyokolo ye te.
Psal LinVB 89:24  Nakonyata banguna ba ye banso, nakokweisa baye bakoyinaka ye.
Psal LinVB 89:25  Bolamu na lobokó la ngai bikozala na ye, akolonga mpo ya nkombo ya ngai.
Psal LinVB 89:26  Nakokomisa ye mokonzi wa mbu, akozala mpe mokonzi wa bibale.
Psal LinVB 89:27  Ye akobenga ngai na nkombo ‘Tata wa ngai, Nzambe wa ngai, libanga likobikisa ngai !’
Psal LinVB 89:28  Bongo nakokomisa ye mwana wa yambo, akoleka bakonzi banso ba nse.
Psal LinVB 89:29  Nakolakisa ye bolingi bwa ngai seko, bondeko bwa biso na ye bokokufa te.
Psal LinVB 89:30  Nakoumisa libota lya ye seko, mpe ngwende ya ye ekoumela seko.
Psal LinVB 89:31  Soko bana ba ye batiki mobeko mwa ngai, mpe baboyi kolanda nzela ya ngai,
Psal LinVB 89:32  soko babuki mitindo mya ngai, mpe batosi bitinda bya ngai te,
Psal LinVB 89:33  nakotumbola bango na fimbo mpo ya masumu ma bango, mpe nakobete bango mpo ya mabe ma bango.
Psal LinVB 89:34  Nzokande nakopima bango bolingi bwa ngai te, nakotika bango ata moke te.
Psal LinVB 89:35  Nakoboma bondeko bwa ngai te, nakobongola maloba ma monoko mwa ngai te.
Psal LinVB 89:36  Ngai Mosantu nalayi ndai mbala yoko, nakoki kokosa Davidi soki moke te !
Psal LinVB 89:37  Nakoumisa libota lya ye seko, mpe ngwende ya ye ekozala lokola mwese o miso ma ngai,
Psal LinVB 89:38  lokola sanza etiami seko, lokola elembo ya seko o ntei ya mampata. »
Psal LinVB 89:39  Nzokande obwaki, obengani mpe osilikeli mesiya wa yo.
Psal LinVB 89:40  Owangani bondeko okataki na mosaleli wa yo, obwaki enkoti ya ye ya bokonzi o nse.
Psal LinVB 89:41  Obukibuki mapango ma ye, mpe obebisi bibombamelo bya ye.
Psal LinVB 89:42  Bato banso baleki o nzela, bayibeli ye biloko, bato ba penepene bakomi kofinga ye.
Psal LinVB 89:43  Olendisi bato bayeli ye etumba, osepelisi banguna ba ye banso ;
Psal LinVB 89:44  obuki mpe mompanga mwa ye o libanga ; otiki kosalisa ye o ntango ya etumba.
Psal LinVB 89:45  Obotoli ye montongo mwa bokonzi, mpe okweisi ngwende ya ye.
Psal LinVB 89:46  Okutoli mikolo mya bolenge bwa ye, oyokisi ye nsoni mingi.
Psal LinVB 89:47  Mikolo boni, e Mokonzi, okomibomba naino ? Kin’o nsuka ? Móto mwa nkanda ya yo mokopela nde seko ?
Psal LinVB 89:48  Kanisa ’te nakoumela na bomoi mingi te ; moto yo okeli akofanda awa se mwa mikolo.
Psal LinVB 89:49  Nani moto akozala na bomoi seko mpe akokufa te ? Nani akoki kokima soko mboka ya bawa ekangi ye ?
Psal LinVB 89:50  E Mokonzi, wapi bolingi olakisaka kala ? Olayelaki Davidi ’te okotika ye te.
Psal LinVB 89:51  A Mokonzi, kanisa nsoni eye bayokisaki mosaleli wa yo, mpe mafinga bafingaki ngai matondi o motema mwa ngai.
Psal LinVB 89:52  E Mokonzi, banguna ba yo bafingi mesiya wa yo o bisika binso azalaki koleka !
Chapter 90
Psal LinVB 90:1  Losambo la Moze, moto wa Nzambe. Mokonzi, ozali ebombamelo ya biso uta kala.
Psal LinVB 90:2  Liboso ’te ngomba, mabelé na mokili bikelama, yo ozali Nzambe, banda kala kin’o bileko binso.
Psal LinVB 90:3  Yo okotindaka bato bazonga o mabelé, okolobakaka « Mwana wa bato, zonga o mabelé ! »
Psal LinVB 90:4  O miso ma yo, mibu nkoto mizali lokola mokolo moko, mokolekaka noki lokola ngonga ya nsuka ya butu.
Psal LinVB 90:5  Okolongolaka bato o mokili, lokola ndoto ekosilaka na ntongo, lokola lititi lya mokolo moko :
Psal LinVB 90:6  likoli na ntongo, kasi liumeli te, na mpokwa likauki mpe likufi.
Psal LinVB 90:7  Mpo ya nkanda ya yo tokoumela te, nkele ya yo ekoyokisa biso nsomo.
Psal LinVB 90:8  Okotia mabe ma biso polele o miso ma yo, mpe okotia mabe ma biso mabombami o mwinda mwa elongi ya yo.
Psal LinVB 90:9  Mpo ya nkanda ya yo, mikolo mikolekaka noki, mpe mibu mya biso mikolimwaka lokola mpema mpamba.
Psal LinVB 90:10  Bomoi bwa biso bokoumelaka mibu ntuku nsambo to mibu ntuku mwambe, soko moto azali makasi. Mikolo mingi, se mpasi na mawa, mizali koleka mbangu mpe biso tozali kokende.
Psal LinVB 90:11  Nani ayebi nguya ya nkanda ya yo, mpe mokolo nini nkele ya yo ekosila ?
Psal LinVB 90:12  Lakisa biso kotanga mikolo mya biso, mpo ’te mitema mya biso mikoma na bwanya.
Psal LinVB 90:13  Zonga Mokonzi ! Mikolo boni okozila naino ? Yokela basaleli ba yo mawa.
Psal LinVB 90:14  Uta ntongo lakisa biso bolingi bwa yo, mpe mokolo na mokolo tokozala na esengo.
Psal LinVB 90:15  Oumisa esengo ya biso mikolo mingi, mikokana na mikolo tozwaki etumbu mpe mibu miike toyokaki mpasi.
Psal LinVB 90:16  Basaleli ba yo bamono bikela bya yo, bana ba bango bamono nkembo ya yo !
Psal LinVB 90:17  Bolamu bwa Mokonzi Nzambe wa biso bozala na biso ! Benisa biso mpe lendisa misala mya maboko ma biso !
Chapter 91
Psal LinVB 91:1  Yo moto obombami o mboka ya Nta-Likolo, mpe ofandi pene na Nzambe wa bokasi bonso,
Psal LinVB 91:2  loba na Mokonzi : « Ozali ebombamelo ya ngai, yo Nzambe wa ngai, nakotia motema na yo. »
Psal LinVB 91:3  Ye akolongola yo o monyama mwa mobomi nyama mpe akobikisa yo o bokono bobe.
Psal LinVB 91:4  Akozipa yo na mapapu ma ye, okobombama o nse ya nsala ya ye. Bondeko bwa ye bozala nguba mpe molato mwa etumba.
Psal LinVB 91:5  Na butu okoyoka nsomo te, okobanga likula te, liye bakobeteke na moi,
Psal LinVB 91:6  okobanga bokono bobe te, boye bokongalaka na molili, to malali makobelisaka bato ata na midi.
Psal LinVB 91:7  Ata bato nkoto bakokweya penepene na yo, to bato nkoto zomi bakokweya epai ya loboko la yo la mobali, yo moko okozwa likambo te.
Psal LinVB 91:8  Fungola bobele miso mpe tala mpe okomono lifuta bato babe bakozwaka.
Psal LinVB 91:9  Oyebi ’te Mokonzi azali ebombamelo ya yo, Nzambe wa likolo azali ndako ya yo ;
Psal LinVB 91:10  makambo mabe makoki kokwela yo te, bokono bokobeleme na ema ya yo te,
Psal LinVB 91:11  zambi Nzambe akotinda banzelu ba ye bakengele yo o nzela ya yo inso.
Psal LinVB 91:12  Bakomeme yo o maboko ma bango, mpo ’te lokolo la yo lotuta libaku te.
Psal LinVB 91:13  Okotambola likolo lya nkosi na nyoka, okonyata mwana wa nkosi na ngando.
Psal LinVB 91:14  « Awa akolingaka ngai, nakobikisa ye, nakobatela ye, mpo ayebi nkombo ya ngai.
Psal LinVB 91:15  Soko abengi ngai, nakoyanola ye, nakozala na ye o ntango akoyoka mpasi, nakobikisa ye mpe nakopesa ye lokumu.
Psal LinVB 91:16  Nakopesa ye mikolo mingi mpe nakosala ’te amono libiki lya ngai. »
Chapter 92
Psal LinVB 92:2  Ebongi batondo Mokonzi botondi mpe bayembela nkombo ya yo, Nta-Likolo.
Psal LinVB 92:3  Basakola bolingi bwa yo na nta ntongo, mpe bakumisa lobokó la yo butu mobimba,
Psal LinVB 92:4  na lokombe lonene mpe na nzenze elongo na likembe.
Psal LinVB 92:5  Oyokisi ngai nsai enene, Mokonzi, na bikela bya yo, na bomoni bikela bya yo nagangi :
Psal LinVB 92:6  « E Mokonzi, bikela bya yo bileki binene, makanisi ma yo maleki bozindo ! »
Psal LinVB 92:7  Moto wa bolema ayebi mango te, oyo azangi mayele ayebi ntina soki te.
Psal LinVB 92:8  Ata baye boboya Nzambe bakokolaka lokola matiti, ata baye bakosala mabe bakozwaka bomengo, mokolo moko ekosila na bango seko.
Psal LinVB 92:10  Tala banguna ba yo, Mokonzi, banguna ba yo bakokufa, baye bakosalaka mabe bakopanzana.
Psal LinVB 92:11  Opesi ngai bokasi bwa ngombe mobali, opakoli ngai mafuta ma sika.
Psal LinVB 92:12  Miso ma ngai mamoni baye bazali konongo ngai, matoi ma ngai mayoki maloba ma bato babe.
Psal LinVB 92:13  Moto semba akokola lokola nzete ya mbila, akolenda lokola sédere ya Libano.
Psal LinVB 92:14  Oyo alonami o ndako ya Mokonzi, akokola o lopango la Nzambe wa biso.
Psal LinVB 92:15  Ata nzete ekomeli, ekobota naino mbuma, ekokauka te, ekotikala se mobesu,
Psal LinVB 92:16  mpo ’te asakola bosembo bwa Mokonzi : « Ye libanga lya ngai, akokosaka te ! »
Chapter 93
Psal LinVB 93:1  Nzambe azali moyangeli, Mokonzi wa nkembo, azingami na nguya ya ye.
Psal LinVB 93:2  Abongisi mokili mobimba, mopikami makasi, mokoningana te. Ut’o ebandela otongi ngwende ya yo, ut’o bileko binso ozali.
Psal LinVB 93:3  E Nzambe, mbonge ya ebale itomboki, mai ma ebale mangalisi lokito lonene, mayokisi mingongo minene.
Psal LinVB 93:4  Nzambe wa likolo aleki mango na bokasi, nkembo ya ye eleki lokito la mbonge ya mbu.
Psal LinVB 93:5  Maloba ma yo mazali maloba ma bosolo, e Mokonzi, osantisi ndako ya yo seko.
Chapter 94
Psal LinVB 94:1  E Mokonzi, Nzambe wa bobekoli, omilakisa, Nzambe wa bobekoli !
Psal LinVB 94:2  Teleme, yo zuzi wa nse mobimba, pesa bato ba lolendo etumbu ebongi na bango.
Psal LinVB 94:3  E Mokonzi, mikolo boni naino okondima ’te bato baboya yo bakomitombola mpe bakolonga ?
Psal LinVB 94:4  Bakolobaka se maloba ma lolendo, bayebi se kofunda na mabe ma bango.
Psal LinVB 94:5  Bakonyataka bato ba ekolo ya yo, Mokonzi, mpe bakonyokoloko bato ba libota lya yo ;
Psal LinVB 94:6  bakokataka nkingo ya basi bakufeli babali mpe ya bampaya, mpe bakobomaka bana bitike !
Psal LinVB 94:7  Bakanisi ’te : « Mokonzi amoni yango te, Nzambe wa Yakob akebi na yango te. »
Psal LinVB 94:8  Bokanisa malamu, bino bazoba, bato bazangi mayele, bokozwa mango mokolo nini ?
Psal LinVB 94:9  Oyo asalaki litoi, akoyoka te to ? Oyo akelaki liso, akoki komono te, solo ?
Psal LinVB 94:10  Oyo akopalelaka bikolo, akoki kopesa etumbu te ? Oyo ateyaki bato maye basengeli koyeba, ezali ye te ?
Psal LinVB 94:11  Mokonzi ayebi makanisi ma bato, ayebi ’te mazali se mpamba.
Psal LinVB 94:12  Esengo na moto oyo yo okopalela, e Mokonzi, moto oyo okoteyaka mobeko mwa yo,
Psal LinVB 94:13  mpo ’te akoka kopema o mikolo mya mpasi, o ntango bazali kotimola libulu mpo ya basumuki.
Psal LinVB 94:14  Zambi Mokonzi akotika bato ba ekolo ya ye te, mpe akobosana bato ba libota lya ye te.
Psal LinVB 94:15  Mokolo bakokata makambo na bosembo, bato banso ba motema semba bakosepela.
Psal LinVB 94:16  Nani akosambela ngai soko nazwi likambo na bato babe ? Nani akosala ’te bato bazangi bosembo balonga ngai te ?
Psal LinVB 94:17  Soko Mokonzi ayaki kosalisa ngai te, mbele nasili kokita o mboka ya bawa.
Psal LinVB 94:18  O ntango namilobeli : « Nalingi nakwei », bolingi bwa yo, e Mokonzi, bolendisi ngai.
Psal LinVB 94:19  O ntango matungisi ebele mayeli ngai, mabondi ma yo masepelisi motema mwa ngai.
Psal LinVB 94:20  Okoki kondima ’te bato bazangi bosembo bazala bazuzi, bongo bapesa bitumbu biye mobeko motindi te ?
Psal LinVB 94:21  Bango balingi koboma moto semba, mpe kokitisa moto azali na likambo te.
Psal LinVB 94:22  Kasi Mokonzi azali ebombamelo ya ngai, Nzambe wa ngai, ye libanga esika nakomibombaka.
Psal LinVB 94:23  Akozongisela bango mabe ma bango moko, mayele mabe ma bango makosukisa bango, Mokonzi Nzambe wa biso akokangisa bango monoko.
Chapter 95
Psal LinVB 95:1  Yakani e, tolakisa Mokonzi esengo ya biso, tobetele ye maboko, ye Libanga likobikisa biso.
Psal LinVB 95:2  Tokende epai ya ye mpe totondo ye, toyembela ye mpe tobetele ye mbonda.
Psal LinVB 95:3  Solo, Mokonzi azali Nzambe monene, ye Mokonzi monene aleki banzambe banso.
Psal LinVB 95:4  Bisika bizindo bya nse bizali o maboko ma ye, nsonge ya ngomba izali mpe ya ye.
Psal LinVB 95:5  Mbu ezali ya ye, ye moto akeli yango, mokili mpe mozali mosala mwa maboko ma ye.
Psal LinVB 95:6  Toyingela, togumbama, tokumbamela ye, tofukamela Nzambe oyo asali biso.
Psal LinVB 95:7  Ye azali Nzambe wa biso, biso tozali bato ba ekolo ya ye, ye mokengeli, biso mpata ya etonga ya ye. Boyoka lolaka la ye lelo :
Psal LinVB 95:8  « Bozala na motema mabe te lokola o Meriba, ntango bozalaki o mboka Masa o eliki,
Psal LinVB 95:9  ntango bankoko bamekaki ngai na matumoli ma bango, ata bamonoki bikela bya ngai !
Psal LinVB 95:10  Mibu ntuku inei nayokaki bango mpi, yango wana nalobi : Bazali se kotelengana, baboyi koyeba nzela ya ngai.
Psal LinVB 95:11  Bongo nalayi ndai na nkanda o motema : mokolo moko te bakozwa bopemi nalakelaki bango. »
Chapter 96
Psal LinVB 96:1  Boyembela Mokonzi nzembo ya sika ! Bato banso ba nse, boyembela Nzambe !
Psal LinVB 96:2  Boyembela Mokonzi, bokumisa nkombo ya ye ! Mokolo na mokolo bosakola libiki liuti epai ya ye !
Psal LinVB 96:3  Bosangela bikolo binso nkembo ya ye, boyebisa bato banso makamwisi ma ye !
Psal LinVB 96:4  Bakumisa ye, Mokonzi nta bonene, ye nta nsomo, aleki banzambe banso.
Psal LinVB 96:5  Banzambe basusu banso bazali biloko mpamba ! Bobele ye Mokonzi akeli likolo.
Psal LinVB 96:6  O mboka ye, se lokumu na nkembo, o ndako ya ye esantu, se bokasi na bokonzi.
Psal LinVB 96:7  Bokumisa Mokonzi, bato ba bikolo binso, bokumisa Mokonzi mpo ya nkembo mpe bokasi bwa ye.
Psal LinVB 96:8  Bopesa Mokonzi nkembo ekoki na nkombo ya ye, boya na mabonza, boyingela o lopango la ye.
Psal LinVB 96:9  Bokumbamela Mokonzi, ye nta bosantu. Bato ba nse banso, bolenge o miso ma ye !
Psal LinVB 96:10  Boloba na bapagano : « Nzambe azali Mokonzi ! Molóngó mopikami makasi mokoningana te. Ye akosambisa bikolo binso na bosembo. »
Psal LinVB 96:11  Likolo lisepela ! Mokili moyoka esengo ! Mbu na binso bizali wana biganga makasi !
Psal LinVB 96:12  Bilanga binso na mbuma ya byango bisepela, nzete inso ya zamba iganga na esengo,
Psal LinVB 96:13  o boso bwa Mokonzi, zambi azali koya ; akoya kosambisa mokili mobimba : akosambisa mokili na bosembo, mpe akokamba bato na bosolo bwa ye.
Chapter 97
Psal LinVB 97:1  Nzambe azali Mokonzi ! Bato ba nse basepela, bato ba bisanga binso bayoka esengo !
Psal LinVB 97:2  Molili na mampata bizingi ye, bosembo na bosolo, nde makonzi ma ngwende ya ye.
Psal LinVB 97:3  Móto motamboli o boso bwa ye, mozikisi banguna zongazonga na ye.
Psal LinVB 97:4  Minkalali mya ye mingengeli mokili, nse emoni bongo mpe eningani.
Psal LinVB 97:5  Ngomba inyangwi lokola mafuta ma nzoi o miso ma Mokonzi wa nse mobimba.
Psal LinVB 97:6  Likolo lisakoli bosembo bwa ye mpe bato ba bikolo binso bamoni nkembo ya ye.
Psal LinVB 97:7  Bato bakokumisaka bikeko bayoka nsoni, baye bakomikumisaka na biloko bya mpamba, banzambe banso ba lokuta, bafukamela ye.
Psal LinVB 97:8  O Sion bayoki yango mpe basepeli, o binguma binso bya Yuda bayoki esengo, mpo okati makambo ma bango, e Mokonzi.
Psal LinVB 97:9  Bobele yo, Nzambe, oleki binso o nse mobimba, leka banzambe banso mosika.
Psal LinVB 97:10  Bino bato bolingi Mokonzi, boyina bobe. Akobatelaka bomoi bwa basaleli ba ye, akobikisaka bango o maboko ma bato babe.
Psal LinVB 97:11  Moi mokongengele bato ba bosembo mpe bato ba motema semba bakoyoka esengo.
Psal LinVB 97:12  Bino basemba, bosepela Mokonzi mpe bokumisa nkombo ya ye esantu.
Chapter 98
Psal LinVB 98:1  Nzembo. Boyembela Mokonzi nzembo ya sika, zambi asali makamwisi manene. Alongi etumba na loboko la ye la mobali, loboko la ye nta bosantu.
Psal LinVB 98:2  Mokonzi alakisi libiki lya ye, ayebisi bapagano bosembo bwa ye.
Psal LinVB 98:3  Akundoli bolingi mpe lobokó la ye ona libota lya Israel. Tee nsuka ya mokili bato banso bamoni ndenge Nzambe ayeli bango libiki.
Psal LinVB 98:4  Bato ba nse mobimba, bobetele Mokonzi maboko, boganga migango mya esengo !
Psal LinVB 98:5  Bobetele Mokonzi nzenze, boyembela ye na biyembeli ;
Psal LinVB 98:6  bobete mindule mpe bolelisa liseke lya ngombe, bobete maboko o boso bwa Mokonzi Nzambe.
Psal LinVB 98:7  Mbu na binso bizali wana, biganga, na mpe bato banso ba mokili.
Psal LinVB 98:8  Bibale binso bibete maboko mpe ngomba inso iganga na esengo,
Psal LinVB 98:9  o boso bwa Nzambe, zambi azali koya kosamba makambo ma bato banso. Akosambisa bato ba mokili na bosembo, bato ba bikolo binso na bosolo.
Chapter 99
Psal LinVB 99:1  Nzambe azali Mokonzi ; bato ba bikolo, balenge ! Afandi likolo lya bakerubim, mokili moningani.
Psal LinVB 99:2  Mokonzi azali o Sion, azali nta monene, aleki bikolo binso.
Psal LinVB 99:3  Bakumisa nkombo ya yo enene mpe ya nsomo : « Mokonzi azali mosantu mpe na nguya enene.
Psal LinVB 99:4  Azali Mokonzi oyo akolingaka bosembo. » Yo moto otii bosembo mpe bosolo o mokili, opesi ekolo ya Yakob mibeko mya bosembo.
Psal LinVB 99:5  Bokumisa Nzambe Mokonzi wa biso, bofukama o boso bwa ebonga ya makolo ma ye, zambi azali mosantu.
Psal LinVB 99:6  Moze na Arone bazalaki banganga ba ye, mpe Samuel azalaki kobondela nkombo ya ye ; basambelaki Nzambe mpe ye ayanolaki bango.
Psal LinVB 99:7  Ut’o limpata Mokonzi azalaki koloba na bango, batosaki maloba ma ye na mibeko apesaki bango.
Psal LinVB 99:8  Yo, Mokonzi Nzambe wa biso, oyanolaki bango, omilakisaki Nzambe wa motema ngolu, kasi otumbolaki bango mpo ya mabe ma bango.
Psal LinVB 99:9  Boyembela Mokonzi Nzambe wa biso, bokumbamela ye o ngomba ya ye esantu : Mokonzi Nzambe wa biso azali mosantu.
Chapter 100
Psal LinVB 100:1  Nzembo ya botondi Nzambe. Bato banso ba nse, boyembela Mokonzi,
Psal LinVB 100:2  bosalela Mokonzi na nsai o mitema ; bobeleme na ye na nzembo ya esengo !
Psal LinVB 100:3  Boyeba ’te Mokonzi azali Nzambe ; ye akeli biso, tozali bato ba ye, libota lya ye, mpata ya etonga ya ye.
Psal LinVB 100:4  Bobeleme na monoko mwa lopango la ye, boyingela o lopango la ye na nzembo. Botondo ye mpe bokumisa nkombo ya ye :
Psal LinVB 100:5  « Mokonzi aleki bolamu, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko, lobokó la ye lokoumela seko. »
Chapter 101
Psal LinVB 101:1  Nzembo ya Davidi. Nalingi kokumisa bolingi mpe bosembo bwa yo, e Mokonzi, nalingi koyembela yo nzembo.
Psal LinVB 101:2  Nalingi kokoma na ezalela ebongi nye ; ntango nini okoya kotala ngai ? Nakozala se motema semba o libota lya ngai.
Psal LinVB 101:3  Nandimi mabe o miso ma ngai soki te, nayini ezalela ya bato bapengwi, bakoki kobungisa ngai nzela te.
Psal LinVB 101:4  Moto wa mayele mabe alongwa mosika na ngai, nalingi koyeba moto mabe te.
Psal LinVB 101:5  Nakokangisa monoko mwa moto akotongoko baninga ; oyo akotalaka bato basusu na miso ma lolendo mpe moto wa lofundo, naboyi bango.
Psal LinVB 101:6  Nakoponoko se basemba ba ekolo, bafanda penepene na ngai. Se moto alandi nzela ebongi nye ndakoki kozala mosaleli wa ngai.
Psal LinVB 101:7  Mokosi afanda o ndako ya ngai te, moto wa lokuta akoki kokoma o miso ma ngai te.
Psal LinVB 101:8  Mokolo na mokolo nakosukisa bato babe o mokili, nakosilisa bato babe banso o engumba ya Mokonzi.
Chapter 102
Psal LinVB 102:1  Losambo la moto wa mawa o ntango alingi akweya mpe amileli o miso ma Mokonzi.
Psal LinVB 102:2  E Mokonzi, yoka losambo la ngai, bobeleli bwa ngai bokoma epai ya yo.
Psal LinVB 102:3  Obombela ngai elongi ya yo te o mokolo nakomi na mpasi. Tandela ngai matoi mokolo nabengi yo, yanola ngai noki !
Psal LinVB 102:4  Zambi mikolo mya ngai milimwi lokola milinga, mpe minkuwa mya ngai miziki lokola nkoni batumbi.
Psal LinVB 102:5  Motema mwa ngai mokomi lokola matiti makauka, nazali kobosana kolia mampa ma ngai.
Psal LinVB 102:6  Nazali bobele kolela mpe kokimela, natikali se minkuwa mpamba.
Psal LinVB 102:7  Nakomi lokola esulungutu o eliki, nazali lokola libeke lifandi o mopotu.
Psal LinVB 102:8  Mpongi ekimi ngai, nazali kokimela, lokola ndeke efandi o motondo mwa ndako.
Psal LinVB 102:9  Banguna bakotumolaka ngai mikolo minso, na nkombo ya ngai bakotombelaka bato bobe.
Psal LinVB 102:10  Nakomi kolia mputulu lokola mampa, mpe mpizoli ya miso izali kotanga o kopo ya ngai.
Psal LinVB 102:11  Osilikeli ngai, oyokeli ngai nkanda enene, otomboli ngai mpe obwaki ngai mosika !
Psal LinVB 102:12  Mikolo mya ngai mikosila lokola elilingi, ngai moko nakokauka lokola matiti.
Psal LinVB 102:13  Kasi, Mokonzi, yo okoyangelaka seko, o bileko binso bakotanga nkombo ya yo !
Psal LinVB 102:14  Okoteleme mpe okoyokela Sion mawa, zambi elaka ya koyokela ye ngolu ekoki ; ya solo, ntango ekoki.
Psal LinVB 102:15  Basaleli ba yo balingi mabanga ma mboka ya bango, awa bamoni mboka ekufi, bayoki mawa.
Psal LinVB 102:16  Bato ba bikolo bakobanga nkombo ya Mokonzi, bakonzi banso ba nse bakobanga nkembo ya yo.
Psal LinVB 102:17  O mokolo Mokonzi akotonga Sion lisusu akomilakisa na nkembo ya ye ;
Psal LinVB 102:18  akondima losambo la baye babotoli bango biloko, mpe akokinola losambo la bango te.
Psal LinVB 102:19  Bakoma makambo maye mpo ya bato bakoya nsima, bongo ekolo ya sika ekumisa Mokonzi.
Psal LinVB 102:20  Ut’o esika ya ye esantu Mokonzi asunami, ut’o likolo atali mokili
Psal LinVB 102:21  mpo ’te ayoka boleli bwa bato bakendeki o boombo, mpe abikisa baye bazali kobunda na liwa.
Psal LinVB 102:22  Bakosakola nkombo ya Mokonzi o Sion, bakokumisa ye o Yeruzalem.
Psal LinVB 102:23  O ntango ena bato ba bikolo mpe ba mikili minso bakosangana mpo ’te basalela Mokonzi.
Psal LinVB 102:24  Asilisi bokasi bwa ngai, naino nasukisi mobembo te, akutoli mikolo mya ngai.
Psal LinVB 102:25  Nabondeli ye : « E Nzambe, okamata ngai o kati ya bomoi bwa ngai te, mibu mya yo mikoumela seko.
Psal LinVB 102:26  Okelaka mokili kala mpenza, likolo lizali mosala mwa maboko ma yo.
Psal LinVB 102:27  Ata byango bikosila, yo okotikala, binso bikobeba lokola elamba ; okotika byango lokola bakotikaka elamba, okobongolaka byango lokola bakobongolaka bilamba.
Psal LinVB 102:28  Kasi yo okobongwanaka te, mibu mya yo mikosila te.
Psal LinVB 102:29  Basaleli ba yo bakozwa mboka mpo ’te bafanda, libota lya bango likoumela seko o miso ma yo. »
Chapter 103
Psal LinVB 103:1  Nzembo ya Davidi. Molimo mwa ngai, kumisa Mokonzi, na motema monso kumisa nkombo ya ye esantu.
Psal LinVB 103:2  Molimo mwa ngai, kumisa Mokonzi, mpe obosana malamu ma ye te.
Psal LinVB 103:3  Ye akolimbisaka mabe ma yo manso, ye akobikisaka yo o bokono bonso.
Psal LinVB 103:4  Ye akobikisaka bomoi bwa yo o libulu lya liwa, mpe akolakisaka yo bolingi na ngolu.
Psal LinVB 103:5  Akotondisaka yo na makabo ma ye, akozongisela yo bokasi bwa bolenge lokola engondo.
Psal LinVB 103:6  Bikela bya Mokonzi, bikela bya bosembo, akolongisaka bato banso banyokwami.
Psal LinVB 103:7  Ayebisaka Moze mikano mya ye, mpe alakisaka ba-Israel bikela bya ye binene.
Psal LinVB 103:8  Mokonzi azali nta bolamu mpe ngolu, akosilikaka noki te, atondi na bolingi.
Psal LinVB 103:9  Nkele ya ye ekoumelaka te, akobombela bato nkanda seko te.
Psal LinVB 103:10  Akosalaka biso engebene na mabe ma biso te, akozongiselaka biso matumoli ma biso te.
Psal LinVB 103:11  Lokola etando ya likolo ezipi mokili mobimba, bolingi bwa ye bokobatelaka baye bakobangaka ye.
Psal LinVB 103:12  Lokola nsuka yoko ya mokili ezali mosika na nsuka esusu, se bongo Nzambe akobwaka masumu ma biso mosika.
Psal LinVB 103:13  Lokola tata akolingaka bana ba ye, Mokonzi mpe akolingaka baye bakobangaka ye.
Psal LinVB 103:14  Ayebi botau bwa biso, ayebi ’te tozali se mputulu.
Psal LinVB 103:15  Bomoi bwa moto bozali lokola bomoi bwa lititi, moto akokolaka lokola fulele ya bilanga :
Psal LinVB 103:16  soko mompepe mopepeli ye, azali lisusu te ; esika azalaki, akomonono lisusu te.
Psal LinVB 103:17  Mokonzi akolingaka seko bato bakobangaka ye, mpe akolakisaka bana mpe bankoko ba bango bosembo,
Psal LinVB 103:18  baye bakomemyaka bondeko bwa ye, mpe bayebi ’te basengeli kosala maye ye alingi.
Psal LinVB 103:19  Mokonzi apiki ngwende ya ye o likolo, bokonzi bwa ye boleki biloko binso.
Psal LinVB 103:20  Bino banzelu ba Mokonzi, bokumisa ye, bino bilombe, bokokisa bitinda bya ye, botosa noki soko ayokisi lolaka la ye.
Psal LinVB 103:21  Bino, mampinga ma Mokonzi, bokumisa ye, bozali basaleli ba ye, bokosalaka maye ye alingi.
Psal LinVB 103:22  Bino bikelamo bya ye binso, bokumisa Mokonzi, o bisika binso bya bokonzi bwa ye. Molimo mwa ngai, kumisa Mokonzi.
Chapter 104
Psal LinVB 104:1  Molimo mwa ngai, kumisa Mokonzi ! Mokonzi Nzambe wa ngai, opusi bonene ! Molato mwa yo, nkembo mpe lokumu la yo,
Psal LinVB 104:2  mwinda mozingi yo lokola monkoto, otandi etando ya likolo lokola ema,
Psal LinVB 104:3  otongi ndako ya yo likolo lya mai. Okomisi mampata ma likolo likalo lya yo, mpe okopimbwaka na mapapu ma mompepe.
Psal LinVB 104:4  Okotindaka mompepe lokola ntoma wa yo, minkalali mizali basaleli ba yo.
Psal LinVB 104:5  Opiki mokili o makonzi makasi, mokoki koningana te o bileko na bileko.
Psal LinVB 104:6  Olatisi mwango mbu lokola elamba, mai makomaki kin’o nsonge ya ngomba.
Psal LinVB 104:7  Mai makimi ntango okaneli mango, malengi mpo ya nsomo ya nkake ya yo ;
Psal LinVB 104:8  ngomba ibuti mpe mabwaku makiti, o bisika otindaki byango.
Psal LinVB 104:9  Otii ndelo esika mai makoki koleka te, mazonga kozindisa mokili lisusu te.
Psal LinVB 104:10  Okotindaka mai ma maziba o miluka, mápasola nzela o kati ya ngomba,
Psal LinVB 104:11  mámelisa nyama ya zamba, mpe másilisa mposa ya mpunda ya ngomba.
Psal LinVB 104:12  Penepene na mai ndeke ikotongaka zumbu, ikoyembaka wana o bitapi bya nzete.
Psal LinVB 104:13  Ut’o ndako ya yo okonoiselaka ngomba mbula, okomelisaka mabelé mbula eye otangisi.
Psal LinVB 104:14  Okotoisaka matiti mazala bilei bya ngombe, okotoisaka mpe mbuma ya mampa iye bato bakolonaka mpo ya kolia.
Psal LinVB 104:15  Vino ekoyokisaka moto esengo o motema, mafuta makongengisa elongi ya ye mpe mampa makolendisaka ye.
Psal LinVB 104:16  Nzete ya Mokonzi ikolendaka na mai omelisi yango, sédere ya Libano iye Mokonzimei alonaki.
Psal LinVB 104:17  Ndeke ikotongaka zumbu wana, nkongi ekofandaka o nsonge ya yango.
Psal LinVB 104:18  Ngomba ilai izali mokili mwa ntaba ya ngomba, mabulu ma ngomba, mboka ya bisende.
Psal LinVB 104:19  Osalaki sanza mpo ya kolakisa bileko, mwese moyebi ngonga ya kokita.
Psal LinVB 104:20  Ebimisi yo molili, butu boindi, mpe nyama inso ya zamba ikomi kobima.
Psal LinVB 104:21  Bana ba nkosi baleli, bakomi koluka nyama mpe kosenge Nzambe bilei bya bango.
Psal LinVB 104:22  Etani ntongo, balongwi, bakei kolala o mabulu ma bango,
Psal LinVB 104:23  ntango moto abimi mpo ’te akende o bilanga mpe asala mosala mwa ye tee mpokwa.
Psal LinVB 104:24  Mokonzi, bikela bya yo bizali mingi ! Osali byango na bwanya, otondisi mokili na biloko.
Psal LinVB 104:25  Tala mbu enene, ekosuka wapi ? Etondi na mbisi, mbisi inene na ike.
Psal LinVB 104:26  Masuwa makotambolaka se wana, esika Leviatan azali, oyo osalaki mpo ’te osakana na ye.
Psal LinVB 104:27  Bikelamo biye binso bikotiaka elikya na yo mpo ’te okabela byango biloko o ntango ya kolia.
Psal LinVB 104:28  Soko obwakeli bango, bango balokoti, soko ofungoli maboko, bango batondi.
Psal LinVB 104:29  Soko obombi elongi, bango bakomi kobanga, soko obotoli bango mpema, bakufi mpe bazongi o mabelé.
Psal LinVB 104:30  Soko otindi mpema ya yo, basusu bakobotama, mpe bikelamo bya sika bikotonda o mokili.
Psal LinVB 104:31  Nkembo ya Mokonzi ezala o bileko binso, Mokonzi ayoka esengo na bikelamo bya ye.
Psal LinVB 104:32  Soko atali mokili, mokili moningani, soko asimbi ngomba, milinga mibimi.
Psal LinVB 104:33  Nalingi koyembela Mokonzi bomoi bwa ngai mobimba, mpe kobetele Nzambe wa ngai miziki tee liwa lya ngai.
Psal LinVB 104:34  Maloba ma ngai masepelisa ye, esengo ya ngai, se Mokonzi !
Psal LinVB 104:35  Bato baboya yo basila o mokili, bato babe bazala lisusu te. Molimo mwa ngai, kumisa Mokonzi ! Aleluya !
Chapter 105
Psal LinVB 105:1  Bokumisa Mokonzi, bosakola nkombo ya ye, boyebisa bato banso bikela bya ye !
Psal LinVB 105:2  Boyembela ye, bokumisa ye, bomanyola makamwisi ma ye manso.
Psal LinVB 105:3  Bosepela Nkombo ya ye esantu, lokumu la bino, bino bato bokolukaka Mokonzi, boyoka nsai.
Psal LinVB 105:4  Boluka Mokonzi na mpe nguya ya ye, bomeka kozala ntango inso penepene na ye.
Psal LinVB 105:5  Bokundola makamwisi ma ye, makamwa ma ye na boyangeli bwa ye,
Psal LinVB 105:6  bino bato ba libota lya Abarama, mosaleli wa ye, bino bana ba Yakob, moto ye apono.
Psal LinVB 105:7  Ye Mokonzi, azali Nzambe wa biso, ye akokataka makambo o nse mobimba.
Psal LinVB 105:8  Akokanisaka bondeko bwa ye ntango inso, elako ona nkoto na nkoto ya bato,
Psal LinVB 105:9  bondeko akataka na Abarama, na mpe ndai alayelaka Izaka.
Psal LinVB 105:10  Akomisi bwango mobeko mpo ya Yakob, bondeko bwa seko na bato ba Israel,
Psal LinVB 105:11  na maloba maye : « Nakopesa bino mokili, nakokabela bino mabelé ma Kanana bo lisango. »
Psal LinVB 105:12  O ntango ena bazalaki se liboke like lya bato, bazalaki bato baike te, se bampaya.
Psal LinVB 105:13  Bazalaki kolekaleka o bikolo biike, kotika mokili moko mpo ya kokende epai esusu.
Psal LinVB 105:14  Kasi alingisaki te ’te banyokolo bango, mpo ya bango apesi bakonzi basusu etumbu.
Psal LinVB 105:15  Alobi : « Botika bato baye babonzami na ngai, bosala baprofeta ba ngai mabe te ! »
Psal LinVB 105:16  Atindi nzala enene o mokili, abebisi bilanga binso bya mbuma ya mampa.
Psal LinVB 105:17  Atindi moto moko o boso bwa bango, Yozefu, oyo atekemi lokola moombo.
Psal LinVB 105:18  Bakangi ye minyololo o makolo, batii ye nkamba ya bibende o nkingo,
Psal LinVB 105:19  kin’o mokolo Mokonzi akokisi maloba ma ye, ntango makambo alobaki mayei kosalema.
Psal LinVB 105:20  Mokonzi Farao atindi ’te balongola ye minyololo, mokonzi wa bikolo mingi abikisi ye o boloko.
Psal LinVB 105:21  Atii ye moyangeli wa ndako ya ye, mpe nkolo wa biloko bya ye binso,
Psal LinVB 105:22  mpo ’te bankumu ba ekolo batosa ye, mpe ateya balaki ba mokonzi bwanya.
Psal LinVB 105:23  Bobele bongo ba-Israel bakomi o Ezipeti, Yakob akei kofanda o ekolo ya Kam.
Psal LinVB 105:24  Nzambe asalisi ekolo ya ye mpo ’te babota mingi, bakomi koleka banguna ba bango na bokasi.
Psal LinVB 105:25  Abebisi mitema mya banguna mpo bayina bato ba ye, mpe batungisa basaleli ba ye.
Psal LinVB 105:26  O ntango ena atindi Moze, mosaleli wa ye, na mpe Arone, moto amiponeli.
Psal LinVB 105:27  Na maboko ma bango asali misala minene miye alobaki, makamwisi o ekolo ya Kam.
Psal LinVB 105:28  Atindi molili mpe molili moyei, kasi baboyi kotosa maloba ma ye.
Psal LinVB 105:29  Akomisi mai ma bango makila, mpe abomisi mbisi ya bango inso o mai.
Psal LinVB 105:30  Mokili mwa bango motondi na magbololo, tee o ndako ya bakonzi ba bango.
Psal LinVB 105:31  Alobi lisusu mpe nzinzi iyei mingi na mpe nkungi o ekolo ya bango mobimba.
Psal LinVB 105:32  Mbula atindeli bango ezalaki mbula ya matandala, atindi mpe móto mwa minkalali o mokili mwa bango ;
Psal LinVB 105:33  abebisi nzete ya vino mpe ya figi, abuki nzete inso o mokili mwa bango.
Psal LinVB 105:34  Alobi lisusu mpe mapalela mayei, na makélele ebele makoki na botangi te,
Psal LinVB 105:35  masilisi matiti manso o mokili mwa bango, na mpe ndunda inso ya bilanga bya bango.
Psal LinVB 105:36  Abomi bana ba yambo banso ba ekolo, bana babali ba yambo ba mabota ma bango.
Psal LinVB 105:37  Abimisi bato ba ye, bamemi palata na wolo, mpe moto moko te atikali nsima.
Psal LinVB 105:38  Awa babimi, bato ba Ezipeti basepeli, zambi nsomo ekangaki bango.
Psal LinVB 105:39  Akitisi limpata mpo ya kobatela bango na moi, apelisi móto mópesa bango mwinda na butu.
Psal LinVB 105:40  Basengi bilei, atindeli bango bisosolo, atondisi bango na mampa mauti o likolo.
Psal LinVB 105:41  Apasoli libanga mpe mai mabimi, makatisi eliki lokola moluka.
Psal LinVB 105:42  Akundoli o motema liloba lya ye lisantu, elako alakelaki Abarama, mosaleli wa ye :
Psal LinVB 105:43  abimisi bato ba ye na esengo enene, bato ye aponoki bazalaki koganga na nsai.
Psal LinVB 105:44  Akabeli bango mabelé ma bato ba bikolo bisusu, bazwi bongo mbuma ya bilanga bya bango.
Psal LinVB 105:45  Asali maye manso mpo ’te bamemya bitinda bya ye mpe batosa mibeko mya ye. Aleluya !
Chapter 106
Psal LinVB 106:1  Aleluia ! Botondo Nzambe, zambi aleki bolamu ; bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 106:2  Nani akoki kosakola misala minene mya Mokonzi, kokumisa ye bo ebongi ?
Psal LinVB 106:3  Esengo na baye bakolandaka nzela semba, baye bakosalaka ntango inso misala mya bosembo !
Psal LinVB 106:4  Mokonzi, okanisa ngai, mpo ya bolingi okolingaka ekolo ya yo, oyela ngai libiki,
Psal LinVB 106:5  namono esengo ya baponomi ba yo, nasepela mpe nazwa nkembo elongo na bana ba yo.
Psal LinVB 106:6  Tosali masumu se lokola bankoko ba biso, tobungi nzela, towangani yo.
Psal LinVB 106:7  Bankoko ba biso bazalaki o Ezipeti, bayokaki ntina ya makamwisi ma yo te ; babosanaki bolingi bwa yo bonene, batombokoki na Nta-Likolo pene na Mbu Etane.
Psal LinVB 106:8  Mokonzi abikisi bango mpo ya nkombo ya ye, mpo ya kolakisa bango nguya ya ye.
Psal LinVB 106:9  Akaneli Mbu Etane mpe mai makauki, alekisi bango o mai, lokola o eliki.
Psal LinVB 106:10  Abikisi bango o maboko ma banguna, asikoli bango o maboko ma banyokoli.
Psal LinVB 106:11  Mai mayei kozipa banguna ba bango, ata moko te abiki.
Psal LinVB 106:12  Mokolo mona bayambi maloba ma ye, mpe bakumisi ye na nzembo.
Psal LinVB 106:13  Kasi babosani noki bikela bya ye binso, bazili ata elako ya ye te.
Psal LinVB 106:14  O eliki balandi se mposa ya biloko, o mokili moye mozangi biloko, bameki Nzambe.
Psal LinVB 106:15  Apesi bango biloko biye basengi, atondisi bango tee bayoki byango mpi.
Psal LinVB 106:16  O nganda bayokeli Moze na Arone, mobonzami na Mokonzi, zuwa.
Psal LinVB 106:17  Mabelé mafungwami mpe mameli Datan, makundi Abiram na baninga ba ye.
Psal LinVB 106:18  Móto mopeli likolo lya bango, mololi mozikisi bato baye batomboki.
Psal LinVB 106:19  O ngomba Oreb basali ekeko ya mwana wa ngombe, bakumbameli ekeko eye batulaki.
Psal LinVB 106:20  Batiki Nzambe wa bango wa lokumu lonene, mpo ya ekeko ya ngombe, eye ekoliaka matiti.
Psal LinVB 106:21  Babosani Nzambe, oyo abikisaki bango, oyo akelaki mambi manene o Ezipeti,
Psal LinVB 106:22  oyo alakisaki makamwisi o ekolo ya Kam mpe mambi ma nsomo pene na Mbu Etane.
Psal LinVB 106:23  Akani ’te asilisa bango nye, kasi Moze, molingami wa ye, asambeli mpo ya bango o boso bwa Nzambe ’te atika koboma bango na nkanda.
Psal LinVB 106:24  Baboyi mokili motondi na biloko elengi, zambi bandimi maloba ma ye te.
Psal LinVB 106:25  Batombokeli ye o biema bya bango, baboyi maloba ma Mokonzi.
Psal LinVB 106:26  Mokonzi atomboli loboko mpo ya kolaya ndai ’te akoboma bango banso o eliki,
Psal LinVB 106:27  akopanza bana ba bango o bikolo bisusu mpe akopalinginya bango o ntei ya bapagano.
Psal LinVB 106:28  Bakei kondima boombo bwa nzambe Baal-Peor, balei mabonza bakobonzelaka bawa,
Psal LinVB 106:29  bayokisi ye nkanda na mabe ma bango kina etumbu ya nsomo ekweli bango.
Psal LinVB 106:30  Ntango ena Pinekas atelemi, abongisi likambo, mpe etumbu esili.
Psal LinVB 106:31  Yango nde ekomisi ye moto wa bosembo, o bileko binso bato bakokanisa ye.
Psal LinVB 106:32  Epai ya mai ma Meriba bayokisi Nzambe nkanda lisusu ; Moze azwi likambo se mpo ya bango :
Psal LinVB 106:33  awa bayokisi ye motema bololo, Moze alobi maloba maye akanisi malamu te.
Psal LinVB 106:34  Basilisi bapagano na koboma te, baye Mokonzi atangelaki bango.
Psal LinVB 106:35  Basangani na bapagano mpe balandi mimeseno mya bango.
Psal LinVB 106:36  Bakumisi bikeko bya banzambe ba bango, mpe bakwei bongo o motambo :
Psal LinVB 106:37  babomi bana ba bango, babali na basi, babonzi bango na bazabolo.
Psal LinVB 106:38  Basopi makila ma bana basali likambo te, makila ma bana ba bango, babali na basi, baye babonzeli bikeko bya Kanana ; basantoli bongo mokili na makila masopami.
Psal LinVB 106:39  Bakomi na mbindo na makambo maye, basali mabe lokola mwasi abebisi libala.
Psal LinVB 106:40  Mokonzi asilikeli bato ba ye na nkanda enene, ayoki bato ba libota lya ye mpi.
Psal LinVB 106:41  Akabi bango o maboko ma bikolo bisusu, banguna bakomi bakonzi ba bango.
Psal LinVB 106:42  Bato ba bikolo bisusu bakomi konyokolo bango, mpe batieli bango mikumba minene.
Psal LinVB 106:43  Mokonzi abikisi bango mbala mingi mpenza, kasi bango bayoki te, bakobi se kosala mabe.
Psal LinVB 106:44  Atali malozi ma bango mpe ayoki mawa, awa ayoki boleli bwa bango.
Psal LinVB 106:45  Akanisi bondeko akataka na bango ; mpo ya bolingi bwa ye ayoki lisusu ngolu,
Psal LinVB 106:46  asali ’te baye banso bakangaki bango baombo bayokela bango ngolu.
Psal LinVB 106:47  E Mokonzi Nzambe wa biso, bikisa biso, sangisa biso ut’o bikolo binso mpo tokumisa nkombo ya yo esantu mpe tosepela na bokumisi yo.
Psal LinVB 106:48  Bakumisa Mokonzi Nzambe wa Israel o bileko binso seko. Mpe bato banso bandima : Amen ! Aleluya !
Chapter 107
Psal LinVB 107:1  Botondo Nzambe, zambi aleki bolamu, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 107:2  Bato banso Mokonzi abikisi, baloba yango polele, baye ye abikisi o maboko ma banyokoli ;
Psal LinVB 107:3  asangisi bango ut’o bikolo bya Esti, Westi, Nordi mpe Sudi.
Psal LinVB 107:4  Bazalaki koyengayenga o eliki, esika bato bazalaki te, bamonoki nzela yoko te ekolakisa mboka ya bato.
Psal LinVB 107:5  Bayokaki nzala mpe mposa ya mai, bokasi bwa nzoto bosilelaki bango nye.
Psal LinVB 107:6  O ntango bayoki mpasi babeleli Mokonzi, ye abikisi bango o nsomo ya bango.
Psal LinVB 107:7  Alakisi bango nzela semba, bakoma bongo o mboka esika bato bazali.
Psal LinVB 107:8  Batondo Mokonzi mpo ya bolingi bwa ye, mpo ya makamwisi manso asalaki mpo ya bato :
Psal LinVB 107:9  amelisi bato bakufi na mposa ya mai mpe atondisi baye bakufi na nzala.
Psal LinVB 107:10  Basusu bafandaki o kati ya molili, bakangemaki na minyololo mya ebende ;
Psal LinVB 107:11  zambi baboyaki koyoka maloba ma Nzambe, mpe batalaki mikano mya Nta-Likolo mpamba.
Psal LinVB 107:12  Ayokisi bango motema mpasi, bango bakwei, mpe moto moko asalisi bango te.
Psal LinVB 107:13  O ntango bayoki mpasi babeleli Mokonzi, ye abikisi bango o nsomo ya bango.
Psal LinVB 107:14  Alongoli bango o molili mwa mboka ya bawa, akati minyololo mya bango.
Psal LinVB 107:15  Batondo Mokonzi mpo ya bolingi bwa ye, mpo ya makamwisi manso asalaki mpo ya bato :
Psal LinVB 107:16  abuki bizibeli bya mbengi na mpe bikangeli bya ebende.
Psal LinVB 107:17  Basusu bakomaki bilema mpo ya mabe basalaki, bakomaki na mpasi mpo ya masumu ma bango,
Psal LinVB 107:18  bayokaki ata mposa ya kolia te, bakomaki penepene na mboka ya bawa.
Psal LinVB 107:19  O ntango bayoki mpasi babeleli Mokonzi, ye abikisi bango o nsomo ya bango.
Psal LinVB 107:20  Atindi liloba lya ye, abikisi bango, alongoli bango o libulu lya liwa.
Psal LinVB 107:21  Batondo Mokonzi mpo ya bolingi bwa ye, mpo ya makamwisi manso asalaki mpo ya bato !
Psal LinVB 107:22  Babonzela ye mabonza ma botondi, bakumisa bikela bya ye na nzembo ya nsai !
Psal LinVB 107:23  Basusu bakendeki na masuwa o mbu, mpe bazalaki kosala mombongo kuna ;
Psal LinVB 107:24  bamonoki na miso maye Mokonzi asalaki na mpe makamwisi ma ye o mbu bozindo.
Psal LinVB 107:25  Mpo ya liloba lya ye mompepe makasi moyei mpe motomboli mbonge ya mai.
Psal LinVB 107:26  Batombwami o likolo, bakwei o bozindo, balembi mpenza mpo ya mpasi ena.
Psal LinVB 107:27  Bandingbandingbi lokola bato bameli masanga mpe mayele masileli bango nye.
Psal LinVB 107:28  O ntango bayoki mpasi babeleli Mokonzi, ye abikisi bango o nsomo ya bango.
Psal LinVB 107:29  Akitisi ekumbaki mpe alembisi mompepe mpe mbonge ikomi kolala nye.
Psal LinVB 107:30  Emoni bango ’te mai makomi nye, basepeli ; Nzambe akomisi bango o libongo liye balingi koseme.
Psal LinVB 107:31  Batondo Mokonzi mpo ya bolingi bwa ye, mpo ya makamwisi manso asalaki mpo ya bato !
Psal LinVB 107:32  Bakembisa ye o likita linene lya bato ba ekolo, bakumisa ye o likita lya bakolo ba mboka !
Psal LinVB 107:33  Mokonzi abongoli ebale ekoma eliki, abongoli liziba likoma esika ezanga mai,
Psal LinVB 107:34  mabelé malamu makoma mabelé ma mongwa mpo ya mabe ma bato bafandi wana.
Psal LinVB 107:35  Abongoli eliki ekoma etima ya mai mpe mokili mozangi mai mokoma esika ya maziba.
Psal LinVB 107:36  Asalisi bato bazalaki kokufa na nzala, mpo batonga mboka, esika bakoki kofanda.
Psal LinVB 107:37  Baloni milona o bilanga na nzete ya vino, babuki mbuma.
Psal LinVB 107:38  Nzambe abenisi bango, bakomi ebele, bibwele bya bango bikomi mpe mingi.
Psal LinVB 107:39  Na nsima, mpo ya minyoko, mpasi mpe malozi, batikali lisusu mingi te, bakomi kolembe.
Psal LinVB 107:40  Ayokisi bankumu ba bango nsoni mpenza, abungisi bango o esobe enene ezangi nzela.
Psal LinVB 107:41  Kasi abateli babola o ntango ya mpasi, apesi bango bana ebele lokola etonga ya mpata.
Psal LinVB 107:42  Ekomono bato ba bosembo bongo, bakosepela, mpe bato banso ba lokuta bakokanga monoko.
Psal LinVB 107:43  Soko ozali moto wa bwanya, kanisa makambo maye, mpe yeba ntina ya bolingi bwa Mokonzi.
Chapter 108
Psal LinVB 108:2  E Nzambe, motema mwa ngai mokiti sikawa, lokumu la ngai, nde : koyembela yo nzembo.
Psal LinVB 108:3  Bino, lokombe na nzenze, bolamuka, nabyanga ntongo !
Psal LinVB 108:4  E Mokonzi, nalingi kokumisa yo o ntei ya bato banso, koyembela yo nzembo o bikolo binso.
Psal LinVB 108:5  Zambi bolingi bwa yo boleki likolo na bonene, bosolo bwa yo bobuti kin’o mampata.
Psal LinVB 108:6  E Nzambe, teleme kuna o likolo, nse mobimba etonda na nkembo ya yo !
Psal LinVB 108:7  Mpo ’te bato ba yo ba bolingo babika, bikisa bango na bokasi bwa yo, yanola biso !
Psal LinVB 108:8  O Ndako ya ye esantu Nzambe alobaki : « Nakoyoka esengo, nakokabola Sikem mpe nakomeka lobwaku la Sukot na nsinga.
Psal LinVB 108:9  Mikili mya Galaad na Manase, mikozala mya ngai, Efraim ekozala enkoti ya ngai o etumba, Yuda, montongo mwa ngai mwa bokonzi.
Psal LinVB 108:10  Moab ekozala sani ya kosukola nzoto, o mokili mwa Edom nakotia lokolo, nakonyata ba-Filisti mpe nakobina likwei. »
Psal LinVB 108:11  Nani akokomisa ngai o engumba ezingami makasi, nani akokamba ngai kin’o mokili mwa Edom ?
Psal LinVB 108:12  Bobele yo Nzambe. Kasi obwaki biso, okokambaka basoda ba yo lisusu te.
Psal LinVB 108:13  Lendisa biso o etumba na banguna, zambi lisalisi lya bato lizali se mpamba !
Psal LinVB 108:14  Elongo na Nzambe tokosala makambo manene, ye moto akonyata banyokoli ba biso.
Chapter 109
Psal LinVB 109:1  Ya kapita wa bayembi. Nzembo ya Davidi. E Nzambe, nakokumisa yo, yanola ngai,
Psal LinVB 109:2  Banguna bafungoli monoko mpo ya kotongo mpe kokosa ngai. Babimiseli ngai bobele maloba ma lokuta.
Psal LinVB 109:3  Zongazonga na ngai se maloba ma boyini, bayeli ngai etumba ntina te.
Psal LinVB 109:4  Nalakisi bango bondeko, bango bafundi ngai, nzokande natiki kosambela te.
Psal LinVB 109:5  Nasali bango malamu, bazongiseli ngai mabe, naluki boyokani na bango, bakomi koyina ngai.
Psal LinVB 109:6  « Tindela monguna wa ngai moto mabe, abimela ye, mofundi ateleme o loboko la ye la mobali.
Psal LinVB 109:7  Basambisa ye, bakitisa ye, batala losambo la ye lokola lisumu.
Psal LinVB 109:8  Bakutola mikolo mya bomoi bwa ye, moto mosusu akamata mosala mwa ye ;
Psal LinVB 109:9  bana ba ye bázanga tata, mpe mwasi wa ye azanga mobali !
Psal LinVB 109:10  Bana ba ye batelengana, bakoma kosengesenge, babengana bango o ndako eye ekomi mopotu !
Psal LinVB 109:11  Modefisi mosolo abotolo ye biloko binso mpe mouta ayiba matomba ma mosala mwa ye !
Psal LinVB 109:12  Moto moko asala ye malamu lisusu te, bana ye atiki, moto moko ayokela bango mawa te !
Psal LinVB 109:13  Bana, bankoko na bankokolo ba ye banso bakufa, bato bakoya nsima bayeba nkombo ya ye te !
Psal LinVB 109:14  Mokonzi abosana masumu ma bankoko ba ye te, mpe alimbisa lisumu lya mama wa ye te !
Psal LinVB 109:15  Akundola mabe ma ye ntango inso mpo ’te alongola nkombo ya ye o mokili ! »
Psal LinVB 109:16  Alingaki kosala baninga malamu te, anyokoli mobola mpe moto wa mawa, kin’o liwa ayokisi bango mpasi o motema.
Psal LinVB 109:17  Abeteleki bato basusu mobondo, babetele ye lokola. Aboyaki kobenisa bato, azanga bobenisi sikawa.
Psal LinVB 109:18  Mondingo moye alataki lokola elamba, mokotela ye lokola mai o misopo, kin’o minkuwa mya ye lokola mafuta.
Psal LinVB 109:19  Alata mondingo lokola elamba, mokanga ye seko lokola mokaba o loketo.
Psal LinVB 109:20  Ezala etumbu Mokonzi akopesa bato bafundi ngai mpe baye banso bakotombelaka ngai bobe.
Psal LinVB 109:21  Kasi, Mokonzi, salisa ngai mpo ya nkombo ya yo. Bolingi bwa yo boleki bonene, bikisa ngai.
Psal LinVB 109:22  Nazali mobola mpe moto wa mawa, motema mwa ngai mozoki mpota.
Psal LinVB 109:23  Nalingi nalimwa noki lokola elilingi, lokola mapalela matombwami na mompepe.
Psal LinVB 109:24  Bolali nzala bolembisi ngai, nakondi mingi, nzoto ya ngai ezangi mafuta.
Psal LinVB 109:25  Nkombo ya ngai ekomi lifinga o minoko mya bango, baye bamoni ngai, baningisi mitó.
Psal LinVB 109:26  E Mokonzi Nzambe wa ngai, yaka kosalisa ngai. Mpo ya bolingi bwa yo bonene, bikisa ngai.
Psal LinVB 109:27  Bato bayeba ’te yo moto osali bongo, yo Mokonzi okeli bikela binene.
Psal LinVB 109:28  Bango bakobete mobondo, kasi yo okobenisa, banyokoli ba ngai bayoka nsoni, ngai, mosaleli wa yo, nasepela !
Psal LinVB 109:29  Baye bafundi ngai basambwa, nsoni ezinga bango lokola elamba !
Psal LinVB 109:30  Nakotondo Mokonzi na mongongo makasi, nakokumisa ye o miso ma bato banso,
Psal LinVB 109:31  zambi azali penepene na mobola mpo ’te abikisa ye o maboko ma bazuzi ba ye.
Chapter 110
Psal LinVB 110:1  Nzembo ya Davidi. Yawe alobi na Mokonzi wa ngai : « Fanda o loboko la ngai la mobali, tee nakokweisa banguna ba yo, bakoma ebonga ya kotia makolo ma yo. »
Psal LinVB 110:2  Bokonzi bwa yo bokopalangana ut’o Sion, okokonza banguna banso.
Psal LinVB 110:3  Bato ba yo bakolanda yo mokolo okokende etumba, bilenge bangengi lokola mamio ma ntongo basangani o mboka yo.
Psal LinVB 110:4  Nzambe alayaki ndai, akobongola maloba ma ye te : « Ozali nganga Nzambe seko, se lokola Melkisedek. »
Psal LinVB 110:5  Mokonzi wa ngai akozala penepene na ngai, akonyata bakonzi o mokolo mwa nkanda ya ye.
Psal LinVB 110:6  Akosambisa bikolo binso, akopasola bango mitó, akotondisa mokili mobimba na bibembe.
Psal LinVB 110:7  O nzela eye akoleka, akomele mai ma moluka, yango wana akotombola motó.
Chapter 111
Psal LinVB 111:1  Aleluya ! Natondi Mokonzi na motema monso, o ntei ya bato ba bosembo basangani likita.
Psal LinVB 111:2  Bikela binso bya Mokonzi bileki bonene ; baye basepeli na byango, bakomanyolaka byango.
Psal LinVB 111:3  Mosala mwa ye moleki bonene mpe bonzenga, bosembo bwa ye bokoumela seko.
Psal LinVB 111:4  Apesi biso mikolo tokanisa makamwisi ma ye, solo, Mokonzi azali motema boboto mpe ngolu.
Psal LinVB 111:5  Akoleisaka baye bakobangaka ye, akokanisaka seko bondeko akataki na bango.
Psal LinVB 111:6  Akolakisaka bango nguya ya bikela bya ye, akokabelaka bango mabelé ma mikili misusu.
Psal LinVB 111:7  Akosalaka manso na bolamu mpe na bosolo, mibeko mya ye mikoki kobongwana te,
Psal LinVB 111:8  mitikala o bileko binso seko, misalemi na bosembo mpe na bosolo.
Psal LinVB 111:9  Apesi bato ba ekolo ya ye libiki, bondeko bwa ye bokoumela seko. Nkombo ya ye esantu ekoyokisaka nsomo.
Psal LinVB 111:10  Bwanya bwa solo, bobangi Mokonzi ! Bato bakosalaka bongo bazali bato ba mayele. Nkembo ya Nzambe ekoumela seko !
Chapter 112
Psal LinVB 112:1  Aleluya ! Esengo na moto akobangaka Mokonzi mpe akotosaka mibeko mya ye na motema moko.
Psal LinVB 112:2  Akozala na libota linene awa o mokili, Nzambe akobenisaka mabota ma bato ba bosembo.
Psal LinVB 112:3  Akozwa nkita, ndako ya ye ekotonda na biloko, bolamu bwa ye bokosila mokolo moko te.
Psal LinVB 112:4  O kati ya molili moto semba akomonisa mwinda ; azali motema ngolu, akoyokelaka baninga mawa.
Psal LinVB 112:5  Akosalisaka bango mpe akodefisaka bango mosolo. Akobongisaka makambo ma ye bo ebongi.
Psal LinVB 112:6  Moto semba akotelengana mokolo moko te, nkombo ya ye ekotikala o bileko na bileko.
Psal LinVB 112:7  Nsango ya mawa ekobangisaka ye te, azali motema mpiko mpe akolikya na Mokonzi.
Psal LinVB 112:8  Azali bobele motema mpio, akobanga eloko te kin’o mokolo akomonela banguna ba ye.
Psal LinVB 112:9  Azali moto wa likabo, akosalisaka babola ; bosembo bwa ye bokosila mokolo moko te, akokoma moto monene na lokumu la solo.
Psal LinVB 112:10  Soko mosumuki amoni ye, akoyoka zuwa, akolia mino, nkanda ya ye ekolia ye. Mposa ya bato babe ekolongisa bango te.
Chapter 113
Psal LinVB 113:1  Aleluya ! Basaleli ba Mokonzi, bokumisa ye, boyembela nkombo ya Mokonzi !
Psal LinVB 113:2  Bato banso bakumisa nkombo ya Mokonzi, sikawa mpe o bileko binso seko !
Psal LinVB 113:3  Ut’o Esti kin’o Westi bato banso bakumisa nkombo ya Mokonzi.
Psal LinVB 113:4  Mokonzi akoyangelaka bikolo binso, nkembo ya ye eleki likolo na mosika.
Psal LinVB 113:5  Nani akokani na Mokonzi, Nzambe wa biso ? Ye afandi o ngwende kuna o likolo,
Psal LinVB 113:7  Akotelemisa moto motau akwei o mputulu mpe akolongola mobola o esika ya potopoto.
Psal LinVB 113:8  Akofandisa ye o esika ya bankumu, esika yoko na bankumu ba ekolo ya ye.
Psal LinVB 113:9  Akopesa mwasi ekomba ndako, akoyokisa ye esengo ya kozala mama wa bana.
Chapter 114
Psal LinVB 114:1  O eleko bato ba Israel babimaki o Ezipeti mpe libota lya Yakob o ekolo ya bampaya,
Psal LinVB 114:2  Mokonzi aponi Yuda bo esika ya ye esantu, mpe Israel bo mabelé ma ye.
Psal LinVB 114:3  Mai ma mbu mamoni bongo mpe makimi mbangu, mai ma Yordane makomi kozonga nsima.
Psal LinVB 114:4  Ngomba ipimbwi lokola mpata babali, mpe ngomba ike lokola bana ba mpata.
Psal LinVB 114:5  E mai ma mbu, mpo nini okimi bongo ? Mai ma Yordane, mpo nini ozongi nsima ?
Psal LinVB 114:6  Bino ngomba inene, mpo nini bopimbwi lokola mpata babali, mpe ngomba ike lokola bana ba mpata ?
Psal LinVB 114:7  E mokili, oningana o miso ma Mokonzi, olenge o boso bwa elongi ya Nzambe wa Yakob,
Psal LinVB 114:8  oyo akobongolaka libanga linene likoma etima, mpe libanga like likoma liziba lya mai.
Chapter 115
Psal LinVB 115:1  E Mokonzi, okumisa biso te, okumisa biso te, kasi kumisa nkombo ya yo, mpo ya bolingi mpe lobokó bwa yo.
Psal LinVB 115:2  Bato ba bikolo batika koloba : « Nzambe wa bango azali wapi ? »
Psal LinVB 115:3  Nzambe wa biso azali o likolo, manso alingi kosala, akosala mango.
Psal LinVB 115:4  Bikeko bya bango, se palata na wolo, bisalemi se na maboko ma bato.
Psal LinVB 115:5  Bizali na monoko, kasi bikolobaka te, bizali na miso, kasi bikomonoko te,
Psal LinVB 115:6  bizali na matoi, kasi bikoyokaka te, bizali na zolo, kasi bikolumbutaka te.
Psal LinVB 115:7  Bizali na maboko, kasi bikosimbaka eloko te, bizali na makolo, kasi bikoki kotambola te, bizali na mongongo, kasi bikoyokisaka lolaka te.
Psal LinVB 115:8  Bato basali byango bakokoma lokola byango ná baye bakotiaka mitema na byango.
Psal LinVB 115:9  Bato ba Israel, botia mitema na Mokonzi, mosalisi mpe mobateli wa bino, se ye !
Psal LinVB 115:10  Bato ba Arone, botia mitema na Mokonzi, mosalisi mpe mobateli wa bino, se ye !
Psal LinVB 115:11  Baye bakobangaka Mokonzi, batia mitema na ye, mosalisi mpe mobateli wa bino, se ye !
Psal LinVB 115:12  Mokonzi akokanisaka biso, akobenisa biso, akobenisa ekolo ya bato ba Israel, akobenisa libota lya bana ba Arone,
Psal LinVB 115:13  akobenisa baye bakobangaka Mokonzi, ná bato banene ná bato bake.
Psal LinVB 115:14  Mokonzi akokolisa mabota ma bino, akobenisa bino ná mpe bana ba bino.
Psal LinVB 115:15  Mokonzi abenisa bino, ye mozalisi wa likolo na nse !
Psal LinVB 115:16  Likolo lizali lya Mokonzi, kasi apesi mokili o maboko ma bato.
Psal LinVB 115:17  Bato bawei bakopesaka Mokonzi lokumu te, ata moko te wa baye bakiti o mboka ya bawa.
Psal LinVB 115:18  Kasi biso bato tozali na bomoi, tokokumisaka Mokonzi, lelo mpe o bileko binso. Aleluya !
Chapter 116
Psal LinVB 116:1  Nakolingaka Mokonzi, zambi akoyokaka mabondeli ma ngai.
Psal LinVB 116:2  Mbala inso nabelelaki ye, atandelaki ngai matoi.
Psal LinVB 116:3  Ntango nakomaki penepene na liwa, mpe motambo mwa limfelo mokangaki ngai, ntango nayokaki nsomo mpe nabangaki,
Psal LinVB 116:4  nabelelaki nkombo ya Mokonzi : « E Mokonzi, bikisa molimo mwa ngai ! »
Psal LinVB 116:5  Mokonzi azali nta bosembo, nta ngolu, Nzambe wa biso azali nta bolamu.
Psal LinVB 116:6  Mokonzi akobatelaka bato bake : ntango nalembeki, abikisi ngai.
Psal LinVB 116:7  Nakitisi motema, nabangi lisusu te, zambi Mokonzi asali ngai malamu :
Psal LinVB 116:8  abikisi molimo mwa ngai o liwa, alongoli ngai mai o miso, mpe asalisi ngai nakweya te.
Psal LinVB 116:9  Nakotambola o miso ma Mokonzi, o ntei ya bato bazali na bomoi.
Psal LinVB 116:10  Nazalaki na elikya, ata ntango nalobaki : « Ngai nazali nsuka ya bato ba mawa. »
Psal LinVB 116:11  O ntango mayele masilelaki ngai, nalobaki : « Bato banso se bato ba lokuta. »
Psal LinVB 116:12  Ndenge nini nakoki kozongisela Mokonzi malamu manso ye asalaki ngai ?
Psal LinVB 116:13  Nakotombola nkeni ya libiki, mpe nakotanga nkombo ya Mokonzi.
Psal LinVB 116:14  Nakokokisa bilako nalakelaki Mokonzi o miso ma bato banso ba ekolo ya ye.
Psal LinVB 116:15  Liwa lya bato balingi Mokonzi lileki motuya o miso ma ye.
Psal LinVB 116:16  E Mokonzi, nazali mosaleli wa yo, mwana wa mosaleli wa yo wa mwasi, ofungoli nsinga izalaki kokanga ngai.
Psal LinVB 116:17  Nakobonzela yo libonza lya botondi yo, mpe nakotanga nkombo ya Mokonzi.
Psal LinVB 116:18  Nakokokisa bilako nalakelaki Mokonzi o miso ma bato banso ba ekolo ya ye,
Psal LinVB 116:19  o lopango la ndako ya Mokonzi, o kati ya Yeruzalem, engumba ya yo. Aleluya !
Chapter 117
Psal LinVB 117:1  Bato ba bikolo binso, bokumisa Mokonzi, o mikili minso boyembela ye nzembo !
Psal LinVB 117:2  Akolingaka biso bolingi boleki bonene, bosolo bwa Mokonzi bokoumela seko. Aleluya !
Chapter 118
Psal LinVB 118:1  Botondo Mokonzi, zambi aleki bolamu, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 118:2  Bato ba ekolo ya Israel baloba : Bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 118:3  Bato ba libota lya Arone baloba : Bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 118:4  Baye bakobangaka Mokonzi baloba : Bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 118:5  Ntango nayokaki nsomo, nabelelaki Mokonzi, andimeli ngai mpe abikisi ngai.
Psal LinVB 118:6  Mokonzi azali na ngai, nakobanga lisusu te, bato bakoki kosala ngai nini ?
Psal LinVB 118:7  Mokonzi azali na ngai, azali kosalisa ngai ; yango wana nakoki kobanga banguna ba ngai te.
Psal LinVB 118:8  Kobombama epai ya Nzambe eleki malamu, kotia motema na bato ezali mpamba.
Psal LinVB 118:9  Kobombama epai ya Nzambe eleki malamu, kotia motema na bato banene ezali mpamba.
Psal LinVB 118:10  Bapagano banso bazingaki ngai, napanzi bango o nkombo ya Mokonzi.
Psal LinVB 118:11  Bazingaki ngai, bakangaki ngai makasi, napanzi bango o nkombo ya Mokonzi.
Psal LinVB 118:12  Bayaki kozinga ngai ebele lokola nzoi, basili lokola nzube iziki na móto, napanzi bango o nkombo ya Mokonzi.
Psal LinVB 118:13  Batindisaki ngai mpo ’te baboma ngai, kasi Mokonzi ayei kosalisa ngai.
Psal LinVB 118:14  Nzambe azali bokasi bwa ngai, nakoyembelaka ye, mpo azali mobikisi wa ngai.
Psal LinVB 118:15  O biema bya basemba bagangi na nsai : « Loboko la Nzambe losali mambi manene,
Psal LinVB 118:16  loboko la Nzambe losali makasi, loboko la Nzambe losali mambi manene ! »
Psal LinVB 118:17  Solo, nakokufa te, nakozala na bomoi, mpe nakokumisa bikela bya Mokonzi.
Psal LinVB 118:18  Apesaki ngai etumbu mbala mingi, kasi andimaki te ’te nakufa.
Psal LinVB 118:19  Fungolela ngai bizibeli bya ndako ya bosembo, nakoyingela mpe nakotondo Mokonzi.
Psal LinVB 118:20  Ezibeli ya ndako ya Mokonzi ezali awa, esika bato ba bosembo bakoyingela.
Psal LinVB 118:21  Natondi yo zambi ondimeli ngai, yo mobikisi wa ngai.
Psal LinVB 118:22  Libanga liye batongi-ndako baboyaki likomi libanga lya nse lya ndako mobimba.
Psal LinVB 118:23  Tala mosala Mokonzi asalaki, tomoni mwango na miso mpe tokamwi.
Psal LinVB 118:24  Mokonzi akeli mokolo mwa lelo mpo tosepela mpe toyoka nsai.
Psal LinVB 118:25  E Nzambe, pesa biso libiki, pesa e ! E Mokonzi, pesa biso lilonga, pesa e !
Psal LinVB 118:26  O nkombo ya Mokonzi babenisa oyo akoya ! Ut’o ndako ya Mokonzi tokokumisa yo.
Psal LinVB 118:27  Mokonzi azali Nzambe, ye mwinda mwa biso, totambola milongo, mandalala o maboko, tobeleme na matumu ma altare.
Psal LinVB 118:28  Natondi yo, Nzambe wa ngai, nakumisi yo, natondi yo, mpo ondimeli ngai, obikisi ngai.
Psal LinVB 118:29  Botondo Mokonzi, zambi aleki bolamu, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Chapter 119
Psal LinVB 119:1  Esengo na bato balandi nzela ebongi nye mpe bamemyi Mobeko mwa Mokonzi.
Psal LinVB 119:2  Esengo na baye batosi mitindo mya ye, baye baluki ye na motema moko,
Psal LinVB 119:3  basali mabe soki te, mpe balandi bobele nzela ya ye !
Psal LinVB 119:4  Yo moto otindi mitindo mya yo mpo ’te bato batosa myango nye.
Psal LinVB 119:5  Nátambola o nzela ya ngai na mpiko, násala se mpo ilingi yo.
Psal LinVB 119:6  Soko natosi mitindo mya yo, nakoyoka nsoni mokolo moko te.
Psal LinVB 119:7  Nakotondo yo na motema semba, zambi nakoyeba mibeko mya yo mya bosembo.
Psal LinVB 119:9  Boniboni elenge mobali akoki kotikala na bopeto ? Bobele soko atosi maloba ma yo.
Psal LinVB 119:10  Naluki yo na motema monso, nálongwa o nzela ya mibeko mya yo te.
Psal LinVB 119:11  Nabombaki bilako bya yo o motema, mpo ’te nasala lisumu o miso ma yo te.
Psal LinVB 119:12  Bato bakumisa yo, Mokonzi, lakisa ngai maye yo olingi !
Psal LinVB 119:13  Na mbebu ya ngai nasili natangi mateya manso mauti o monoko mwa yo.
Psal LinVB 119:14  Nayoki esengo o nzela ya mibeko mya yo, natali nkita ya biloko nsima.
Psal LinVB 119:15  Nalingi komanyola mitindo mya yo, mpe kokeba o nzela olakisi ngai.
Psal LinVB 119:16  Nakosepelaka na maye yo olingi, nakoki kobosana maloba ma yo te.
Psal LinVB 119:17  Salisa ngai, mosaleli wa yo, mpo ’te nabika, nakotosa maloba ma yo manso.
Psal LinVB 119:18  Fungola ngai miso, bongo namono makamwisi ma mobeko mwa yo.
Psal LinVB 119:19  Nazali se mompaya awa o nse, obombela ngai mitindo mya yo te.
Psal LinVB 119:20  Molimo mwa ngai mowei na mposa ya koyeba bitinda bya yo ntango inso.
Psal LinVB 119:21  Okokanelaka bato ba lolendo basali mabe, baye batiki nzela ya mibeko mya yo.
Psal LinVB 119:22  Longola bato bazali kofinga mpe kokinola ngai, zambi nakotosaka malako ma yo manso.
Psal LinVB 119:23  Ata bankumu balingi kosambisa ngai, ngai mosaleli wa yo nakomanyola maye yo olingi.
Psal LinVB 119:24  Malako ma yo mazali esengo ya ngai, makolakisaka ngai nzela eye nálanda.
Psal LinVB 119:25  Molimo mwa ngai molali o mputulu, lendisa ngai lokola olakelaki ngai.
Psal LinVB 119:26  Awa nayebisi yo nzela ya ngai, oyanoli ngai, lakisa ngai maye yo olingi.
Psal LinVB 119:27  Salisa ngai nayeba nzela ya mitindo mya yo, mpe nakomanyola makamwisi ma yo.
Psal LinVB 119:28  Mai mabimeli ngai o miso mpo ya mawa, telemisa ngai lisusu lokola olakelaki ngai.
Psal LinVB 119:29  Longola ngai o nzela ya lokuta, ndima ’te nakoka kolanda nzela ya mibeko mya yo.
Psal LinVB 119:30  Nandimi kolanda nzela ya bosolo, nandimi kotosa mateya ma yo.
Psal LinVB 119:31  Nandimi mibeko mya yo na motema monso, e Mokonzi, nayoka nsoni te.
Psal LinVB 119:32  Nakolandaka nzela ya mitindo mya yo, zambi yo moto oteyi ngai yango.
Psal LinVB 119:33  E Mokonzi, lakisa ngai nzela ya mibeko mya yo, nalingi kolanda yango kin’o nsuka.
Psal LinVB 119:34  Pesa ngai bwanya natosa mibeko mya yo, namemya myango na motema moko.
Psal LinVB 119:35  Kamba ngai o nzela ya mitindo mya yo, zambi nayoki myango elengi mingi.
Psal LinVB 119:36  Yokisa motema mwa ngai mposa ya malako ma yo, nalanda mposa ya mosolo soki te.
Psal LinVB 119:37  Batela miso ma ngai malula biloko mpamba te, nazwa bomoi mpo ya mitindo mya yo.
Psal LinVB 119:38  Kokisa elako olakelaki mosaleli wa yo ná mpe baye bakobangaka yo.
Psal LinVB 119:39  Longola mafinga ma bato, maye nakoyokaka nsomo, zambi nakoyambaka mateya ma yo na esengo.
Psal LinVB 119:40  Solo, nalingaki bitinda bya yo mingi, lendisa ngai mpo ya bosembo bwa yo.
Psal LinVB 119:41  E Mokonzi, kabela ngai bolingi bwa yo, mpe libiki lokola olakelaki.
Psal LinVB 119:42  Bongo nakoka koyanola baye bafingi ngai, zambi nakotiaka motema na liloba lya yo.
Psal LinVB 119:43  Salisa ngai naloba se maloba ma bosolo, mpo natii elikya na ndenge okokataka makambo.
Psal LinVB 119:44  Nátosa mibeko mya yo ntango inso mpe o bileko na bileko seko.
Psal LinVB 119:45  Nakoyoka esengo na bolandi nzela ya yo, zambi nalingi kotosa mitindo mya yo.
Psal LinVB 119:46  Nakosakola malako ma yo o miso ma bakonzi, nakoyoka nsoni soki moke te.
Psal LinVB 119:47  Mitindo mya yo miyokisi ngai esengo enene, nalingi myango na motema moko.
Psal LinVB 119:48  Nakotanda maboko epai ya bitinda bya yo, mpe nakomanyola maye yo olingi.
Psal LinVB 119:49  Kanisa lisusu elako olakelaki mosaleli wa yo, eye elendisaki elikya ya ngai.
Psal LinVB 119:50  Maloba ma yo mabondi ngai o ntango ya mawa, elako ya yo ekolendisa ngai.
Psal LinVB 119:51  Bato ba lolendo batumoli ngai mingi, kasi natiki nzela ya mibeko mya yo te.
Psal LinVB 119:52  E Mokonzi, nakundoli mateya ma yo ma kala, maye mazali kobondo ngai.
Psal LinVB 119:53  Nayoki nkanda enene mpo ya bato baboyi yo, baye batiki nzela ya mibeko mya yo.
Psal LinVB 119:54  Nakoyokaka mibeko mya yo elengi lokola nzembo, o ndako ya ngai esika nazali se mompaya.
Psal LinVB 119:55  E Mokonzi, na butu nakokanisaka nkombo ya yo, mpe nakotosaka mibeko mya yo.
Psal LinVB 119:56  Kotosa mitindo mya yo ntango inso, ezali lotomo la ngai lonene.
Psal LinVB 119:57  E Mokonzi, nakoloba yango lisusu : bolamu bwa ngai, se kondima maloba ma yo.
Psal LinVB 119:58  Na motema monso naluki kobondo yo, yokela ngai ngolu lokola olakelaki.
Psal LinVB 119:59  Nakomitunaka mpo ya ezalela ya ngai, mpo nazongela nzela ya malako ma yo.
Psal LinVB 119:60  Nalekisi ntango mpamba te, naumeli te mpo ya kotosa mitindo mya yo.
Psal LinVB 119:61  Bato babe batandeli ngai minyama, kasi nabosani mibeko mya yo te.
Psal LinVB 119:62  O kati ya butu natelemi mpo ya kotondo yo, zambi okoyangelaka manso na bosembo.
Psal LinVB 119:63  Nazali motema moko na bato bakobangaka yo, baye bakotosaka mitindo mya yo.
Psal LinVB 119:64  Mokili motondi na bolingi bwa yo, Mokonzi, bongo olakisa ngai maye yo olingi.
Psal LinVB 119:65  Osalaki ngai, mosaleli wa yo, malamu, lokola olakelaki, Mokonzi.
Psal LinVB 119:66  Lakisa ngai bwanya mpe mayele, zambi natii motema na mitindo mya yo.
Psal LinVB 119:67  Yambo ’te nasambwa, nabungaki nzela, kasi sikawa nakotosa maye otindi.
Psal LinVB 119:68  Ozali motema malamu mpe okosalaka se malamu, lakisa ngai maye yo olingi.
Psal LinVB 119:69  Bato ba lolendo bakotongoko ngai, kasi ngai nakotosa mitindo mya yo na motema monso.
Psal LinVB 119:70  Eloko yoko ekokotelaka bango o mitema te, kasi ngai nakosepelaka na mibeko mya yo.
Psal LinVB 119:71  Mawa nayokaki masali ngai malamu, nabandi koyeba bongo mibeko mya yo.
Psal LinVB 119:72  Mobeko mobimi o monoko mwa yo moleki bolamu, moleki wolo na palata nkoto na nkoto.
Psal LinVB 119:73  Maboko ma yo mayemaki mpe makelaki ngai, pesa ngai bwanya nayeba mitindo mya yo.
Psal LinVB 119:74  Bato babangi yo basepeli na bomoni ngai, zambi natii elikya na maloba ma yo.
Psal LinVB 119:75  Mokonzi, nayebi ’te mateya ma yo mazali semba, oyebi ntina nini oyokisi ngai mpasi.
Psal LinVB 119:76  Bolingi bwa yo bobondo motema mwa ngai, lokola olakelaki mosaleli wa yo.
Psal LinVB 119:77  Ngolu ya yo ekitela ngai mpe nakobika, zambi mibeko mya yo mizali ntina ya esengo ya ngai.
Psal LinVB 119:78  Bato ba lolendo, baye bafundi ngai na lokuta, basambwa, ngai nakomanyola se mitindo mya yo.
Psal LinVB 119:79  Bato babangi yo bazongela ngai, baye bayebi malako ma yo.
Psal LinVB 119:80  Motema mwa ngai mokangana na mibeko mya yo, nayoka nsoni mokolo moko te.
Psal LinVB 119:81  Kin’o nsuka nakozila libiki lya yo, natii motema na liloba lya yo.
Psal LinVB 119:82  Miso ma ngai mateli na boluki elako ya yo, mokolo nini okoya kobondo ngai ?
Psal LinVB 119:83  Nakomi lokola libenga liindi na milinga, kasi nabosani mitindo mya yo soki te.
Psal LinVB 119:84  Mikolo boni naino mosaleli wa yo asengeli kozila mpo ’te ósambisa banyokoli ba ngai ?
Psal LinVB 119:85  Bato ba lolendo batimolaki libulu, bango bato baboyi mibeko mya yo.
Psal LinVB 119:86  Otindi mitindo mya yo minso se na bosolo, bikisa ngai o maboko ma baye banyokoli ngai ntina te.
Psal LinVB 119:87  Etikalaki moke ’te bakomisa ngai penepene na nsuka, kasi ngai natiki bitinda bya yo te.
Psal LinVB 119:88  Lendisa ngai mpo ya bolamu bwa yo, mpe nakotosa malako ma yo.
Psal LinVB 119:89  Mokonzi, liloba lya yo likoumela seko, likoki kobongwana o likolo te.
Psal LinVB 119:90  Bosolo bwa yo bozali o bileko na bileko, mokili mopikami lokola okelaki mwango.
Psal LinVB 119:91  Molóngó mobimba mokotambolaka lokola otindi, zambi binso bikosalelaka yo.
Psal LinVB 119:92  Soko nayokaki mibeko mya yo elengi te, mbele nakufaki o kati ya mawa.
Psal LinVB 119:93  Nábosana bitinda bya yo mokolo moko te, zambi okolendisaka ngai na byango.
Psal LinVB 119:94  Nazali moto wa yo, bikisa ngai ! Ntango inso nalingi koyeba mitindo mya yo.
Psal LinVB 119:95  Bato babe banongi ngai mpo ’te babungisa ngai, kasi ngai nalingi kokeba na malako ma yo.
Psal LinVB 119:96  Namoni ’te malamu manso mazali na nsuka, kasi mobeko mwa yo mozali na nsuka te !
Psal LinVB 119:97  Napusi kolinga mibeko mya yo, nakomanyolaka myango mikolo minso.
Psal LinVB 119:98  Mitindo mya yo mipesi ngai bwanya bonene leka banguna, zambi mikosalisaka ngai ntango inso.
Psal LinVB 119:99  Naleki balakisi ba ngai banso na mayele, zambi nakomanyolaka maloba ma yo.
Psal LinVB 119:100  Naleki bakolo ba mboka banso na bwanya, zambi nakotosaka mitindo mya yo.
Psal LinVB 119:101  Nakokimaka nzela ibe inso, mpo ’te natosa liloba lya yo.
Psal LinVB 119:102  Nalongwi o nzela ya mateya ma yo te, zambi yo moto olakisi ngai mango.
Psal LinVB 119:103  Nayoki elako ya yo elengi mingi, leka mafuta ma nzoi o monoko !
Psal LinVB 119:104  Nakomi na bwanya mpo ya mitindo mya yo, nayini nzela inso ya lokuta.
Psal LinVB 119:105  Maloba ma yo makolakisaka ngai nzela, mazali mwinda, moye nakoki kolanda.
Psal LinVB 119:106  Nalayaki ndai, nakowangana yango te, ’te nakotosa mitindo mya yo mipusi bosembo.
Psal LinVB 119:107  Mokonzi, nazindi o kati ya mawa, lendisa ngai lokola olakelaki.
Psal LinVB 119:108  Mokonzi, yamba bilako bya ngai bo libonza, lakisa ngai mateya ma yo.
Psal LinVB 119:109  Nakomitikaka o maboko ma yo ntango inso, nakoki kobosana mibeko mya yo te.
Psal LinVB 119:110  Ata bato babe batieli ngai motambo, natiki nzela ya mitindo mya yo te.
Psal LinVB 119:111  Lisango lya ngai, malako ma yo, mazali ntina ya esengo o motema mwa ngai.
Psal LinVB 119:112  Nasali makasi mpo ’te nakokisa maye olingi, seko, tee nsuka.
Psal LinVB 119:113  Nayini bato ba mitema mibale, nalingi mobeko mwa yo.
Psal LinVB 119:114  Ozali ebombamelo mpe nguba ya ngai, natii elikya na maloba ma yo.
Psal LinVB 119:115  Bino bato babe, bolongwa pene na ngai, nalingi kotosa mibeko mya Nzambe wa ngai !
Psal LinVB 119:116  Lendisa ngai mpo ’te nabika lokola olakelaki, natii motema na yo, nayoka nsoni te.
Psal LinVB 119:117  Ndima kosalisa ngai mpe nakobika, kosala maye olingi ekosepelisa ngai.
Psal LinVB 119:118  Okokinolaka baye baboyi mitindo mya yo, zambi mayele ma bango, se mayele ma lokuta.
Psal LinVB 119:119  Okotalaka bato babe banso lokola eloko egugi, yango wana ngai nalingi mateya ma yo.
Psal LinVB 119:120  Mpo ya yo nayoki nsomo, nzoto ya ngai ekomi kolenge, nabangi maloba ma yo manso.
Psal LinVB 119:121  Nasali se mambi ma bosembo, otika ngai o maboko ma banyokoli ba ngai te.
Psal LinVB 119:122  Salisa mpe batela ngai, mosaleli wa yo, mpo ’te bato ba lolendo banyokolo ngai te.
Psal LinVB 119:123  Miso ma ngai mateli na bozili libiki lya yo, mpo ya elako ya yo ya bosembo.
Psal LinVB 119:124  Sala mosaleli wa yo engebene na bolingi bwa yo, lakisa ngai maye yo olingi.
Psal LinVB 119:125  Nazali mosaleli wa yo, pesa ngai bwanya, bongo nakoyeba ntina ya malako ma yo.
Psal LinVB 119:126  Eleko ekoki, Mokonzi, ebongi omilakisa, zambi bato babuki mibeko mya yo.
Psal LinVB 119:127  Napusi kolinga mitindo mya yo, leka wolo, wolo peto mpenza.
Psal LinVB 119:128  Nakani kotosa mibeko mya yo minso, nayini nzela inso ya lokuta.
Psal LinVB 119:129  Mateya ma yo, makamwisi ma solo, yango wana nabombi myango o motema.
Psal LinVB 119:130  Moto ayoki maloba ma yo akozwa mayele, bato ba bosawa bayebi ntina ya mango.
Psal LinVB 119:131  Nafungoli monoko mpe nabendi mpema, mpo nayoki mposa ya mitindo mya yo.
Psal LinVB 119:132  Otala ngai mpe oyokela ngai mawa, lokola okosalaka na baye balingi nkombo ya yo.
Psal LinVB 119:133  Mpo ya elako ya yo, lendisa makolo ma ngai, mpo ’te mabe makweisa ngai te.
Psal LinVB 119:134  Bikisa ngai ntango bato balingi kotinda ngai na makasi, bongo nakoka kotosa mitindo mya yo.
Psal LinVB 119:135  Lakisa mosaleli wa yo elongi ya yo nta bonzenga, yebisa ngai maye yo olingi.
Psal LinVB 119:136  Miso ma ngai matangi mpizoli ebele mpo ya bato bakotosaka mibeko mya yo te.
Psal LinVB 119:137  E Mokonzi, ozali nta bosembo, okokataka makambo bo ebongi.
Psal LinVB 119:138  Okopesaka malako ma yo ma bosembo, mazali maloba ma bosolo.
Psal LinVB 119:139  Nawei na mposa ya kosalela yo, zambi banguna ba ngai babosani maloba ma yo.
Psal LinVB 119:140  Elako ya yo ezali ya lokuta soki te, ngai, mosaleli wa yo, nalingi yango.
Psal LinVB 119:141  Ata nazali eloko mpamba, ata bakinoli ngai, nabosani mitindo mya yo te.
Psal LinVB 119:142  Bosembo bwa yo, bosembo bwa seko, mobeko mwa yo mozali bosolo.
Psal LinVB 119:143  Ata mawa manene mpe nsomo ikangi ngai, nakosepelaka se na mitindo mya yo.
Psal LinVB 119:144  Malako ma yo mazali na bosembo seko, pesa ngai bwanya mpe nakobika.
Psal LinVB 119:145  Mokonzi, nabeleli yo makasi, yanola ngai, zambi nakosala maye yo olingi.
Psal LinVB 119:146  Nabengi yo, yaka kobikisa ngai, mpe nakotosa malako ma yo.
Psal LinVB 119:147  Yambo ’te ntongo etana, nabandi kobondela yo, natii elikya na liloba lya yo.
Psal LinVB 119:148  Butu boindi naino te, miso polele, nakomi komanyola elako ya yo.
Psal LinVB 119:149  Mpo ya bolingi bwa yo, oyoka lolaka la ngai, Mokonzi, lendisa ngai na malako ma yo.
Psal LinVB 119:150  Babelemi, banyokoli baye bakaneli ngai, balongwi o nzela ya mibeko mya yo.
Psal LinVB 119:151  Mokonzi, yo ozali penepene na ngai, mpe mitindo mya yo minso mizali mya bosolo.
Psal LinVB 119:152  Uta kala nayebi ’te opesi mitindo mya yo, bo mibeko mya seko.
Psal LinVB 119:153  Otala mawa ma ngai mpe bikisa ngai, mpo nabosani mibeko mya yo te.
Psal LinVB 119:154  Samba likambo lya ngai mpe longisa ngai, lendisa ngai mpo ya elako ya yo.
Psal LinVB 119:155  Libiki lizali mosika na bato babe, zambi bakopanganaka te na maye yo olingi.
Psal LinVB 119:156  Mokonzi, omeseni koyokela bato ngolu. Lendisa ngai na malako ma yo.
Psal LinVB 119:157  Banyokoli mpe banguna ba ngai bazali baike, kasi ngai natiki kotosa malako ma yo te.
Psal LinVB 119:158  Namonoki bapengwi mpe nayoki bango mpi, batosi maloba ma yo te.
Psal LinVB 119:159  Mokonzi, tala soko nalingi bitinda bya yo solo, lendisa ngai mpo ya bolingi bwa yo.
Psal LinVB 119:160  Maloba ma yo, maloba ma bosolo, malako ma yo mazali ma bosembo, seko.
Psal LinVB 119:161  Bankumu banyokoli ngai ntina te, kasi nazalaki kobanga bobele maloba ma yo.
Psal LinVB 119:162  Nayoki esengo mpo ya elako ya yo, lokola moto azwi nkita enene.
Psal LinVB 119:163  Nayini maloba ma lokuta, nalingi mango soki te, nalingi se mibeko mya yo.
Psal LinVB 119:164  Mokolo na mokolo nakokumisaka yo mbala nsambo, mpo mateya ma yo mapusi bosembo.
Psal LinVB 119:165  Okokabelaka bato balingi mibeko mya yo boboto, bakotuta libaku mokolo moko te.
Psal LinVB 119:166  E Mokonzi, naluki libiki epai ya yo, nakotosaka mitindo mya yo.
Psal LinVB 119:167  Nakomemyaka malako ma yo, nakokanganaka na mango na motema monso.
Psal LinVB 119:168  Nakotosaka mitindo mpe malako ma yo, yo oyebi nzela ya ngai inso.
Psal LinVB 119:169  E Mokonzi, bobeleli bwa ngai bokoma epai ya yo, pesa ngai bwanya engebene na elako ya yo.
Psal LinVB 119:170  Mabondeli ma ngai mabuta epai ya yo, bikisa ngai lokola olakelaki.
Psal LinVB 119:171  Mbebu ya ngai isakola lokumu la yo, zambi olakisi ngai maye yo olingi.
Psal LinVB 119:172  Monoko mwa ngai moyemba nzembo ya elako ya yo, zambi mitindo mya yo mizali nta bosembo !
Psal LinVB 119:173  Tandela ngai loboko mpo ya kosalisa ngai, zambi naponi se nzela ya mitindo mya yo.
Psal LinVB 119:174  Mokonzi, naluki libiki se epai ya yo ; esengo ya ngai, mibeko mya yo.
Psal LinVB 119:175  Nazala makasi mpo ’te nakumisa yo, salisa ngai na mateya ma yo.
Psal LinVB 119:176  Ngai, mpata ebungami, natelengani, yaka kokamata ngai, mosaleli wa yo. Omoni ’te nabosani mitindo mya yo te.
Chapter 120
Psal LinVB 120:1  Nzembo ya boyingeli o Tempelo. Nsomo ekangi ngai, nabeleli Mokonzi, mpe Mokonzi andimeli ngai.
Psal LinVB 120:2  E Mokonzi, bikisa ngai o kati ya bato ba lokuta, baye bakotongaka baninga.
Psal LinVB 120:3  Eloko nini Nzambe akopesa bino, bato ba songisongi ?
Psal LinVB 120:4  Akozokisa bino na makula na nsonge epotu, akozikisa bino na makala ma móto.
Psal LinVB 120:5  Mawa na ngai moto nasengeli kofanda o mokili mwa ba-Mesek, mpe kolala o biema bya ba-Kedar.
Psal LinVB 120:6  Nasili naumeli mikolo mileki mingi o kati ya bato bakoyinaka boboto.
Psal LinVB 120:7  Ngai, ata nalobi likambo lya boboto, bango balingi se etumba.
Chapter 121
Psal LinVB 121:1  Nzembo o ntango ya boyingeli o Tempelo. Natomboli miso epai ya ngomba, lisalisi lya ngai likouta wapi ?
Psal LinVB 121:2  Nakozwa lisalisi se epai ya Nzambe, ye Mozalisi wa likolo na nse.
Psal LinVB 121:3  Alingisa te ’te otuta libaku na makolo, mobateli wa yo alala mpongi te !
Psal LinVB 121:4  Te, akokangaka miso te, mobateli wa Israel akolalaka mpongi te.
Psal LinVB 121:5  Mokonzi akobatelaka yo ntango inso, Mokonzi akotikalaka seko penepene na yo.
Psal LinVB 121:6  Na moi mwese mokoyokisa yo mpasi te, na butu sanza mpe te.
Psal LinVB 121:7  Nzambe akobatelaka yo o mabe manso, akokengeleke molimo mwa yo.
Psal LinVB 121:8  Mokonzi akokengeleke bokei mpe bozongi bwa yo, banda lelo kin’o lobiko.
Chapter 122
Psal LinVB 122:1  Nzembo o ntango ya boyingeli o Tempelo. Ya Davidi. Nayokaki nsai enene ntango balobaki na ngai : « Tokende o ndako ya Mokonzi ! »
Psal LinVB 122:2  Tosili tokomi, totelemi o bizibeli bya yo, Yeruzalem !
Psal LinVB 122:3  Yeruzalem, batongi yo bo engumba, o kati ya yo banso bazali motema moko.
Psal LinVB 122:4  Se bikolo bya Mokonzi bakobuta epai ya yo, mpo ’te ba-Israel batondo yo bo ebongi.
Psal LinVB 122:5  Bakosambisaka bato epai ya yo, ozali na ngwende ya libota lya Davidi.
Psal LinVB 122:6  Bosambela ’te ozwa boboto, Yeruzalem, bato balingi yo bazwa esika ya kopema.
Psal LinVB 122:7  Boboto bozala o lopango la yo ! Boboto o ntei ya mabota ma yo !
Psal LinVB 122:8  Nalingi bandeko na baninga ba ngai, yango wana nakotombela yo boboto.
Psal LinVB 122:9  Nalingi ndako ya Mokonzi Nzambe wa ngai, yango wana nakosambela mpo ya bolamu bwa yo !
Chapter 123
Psal LinVB 123:1  Nzembo o ntango ya boyingeli o Tempelo. Natomboli miso epai ya yo, kuna esika ozali o likolo.
Psal LinVB 123:2  Lokola mosali akotalaka mokonzi wa ye, lokola miso ma mosali mwasi akotalaka maboko ma mama wa ndako, biso mpe tokotala Mokonzi Nzambe wa biso kin’o mokolo akoyokela biso mawa.
Psal LinVB 123:3  Yokela biso mawa, Mokonzi, yokela biso mawa, zambi bato bakinoli biso mingi.
Psal LinVB 123:4  Tolembi na mafinga ma bato ba lolendo, tolembi na matumoli ma bato ba lofundo.
Chapter 124
Psal LinVB 124:1  Nzembo o ntango ya boyingeli o Tempelo. Ya Davidi. Soko Mokonzi asalisaki biso te, Israel aloba yango polele,
Psal LinVB 124:2  soko Mokonzi asalisaki biso te, ntango bato bayelaki biso etumba,
Psal LinVB 124:3  mbele baliaki biso mobesu, mpo ya nkanda ya bango enene.
Psal LinVB 124:4  Mbele tozindaki banso o mai mpe ebale enene emeleki biso ;
Psal LinVB 124:5  mbele biso banso tosilaki o mbonge ya nsomo ya mai makasi.
Psal LinVB 124:6  Tokumisa Mokonzi oyo abikisi biso, zambi alingaki te ’te balia biso.
Psal LinVB 124:7  Tozali na bomoi, tobiki o motambo, lokola ndeke ekimi monyama mwa mobomi ; monyama mopaswani mpe biso tobiki.
Psal LinVB 124:8  Lisalisi lya biso, se Mokonzi, ye mozalisi wa likolo na nse.
Chapter 125
Psal LinVB 125:1  Nzembo o ntango ya boyingeli o Tempelo. Moto akotiaka motema na Mokonzi, azali lokola ngomba Sion, ngomba ekoki koningana te, epikami makasi seko.
Psal LinVB 125:2  Yeruzalem ezingami na ngomba, se bongo Mokonzi akozinga bato ba ye, banda sikawa mpe seko.
Psal LinVB 125:3  Moto mabe akoyangela ekolo ya basemba mokolo moko te, mpo ’te bato ba motema bosembo baluka kosala mabe te.
Psal LinVB 125:4  Mokonzi, sala malamu na bato balamu, baye bazali na motema bosembo.
Psal LinVB 125:5  Kasi Mokonzi abengana bato ba mitema mibale elongo na baye banso bakosalaka mabe. Boboto bozala o Israel !
Chapter 126
Psal LinVB 126:1  Nzembo o ntango ya boyingeli o Tempelo. Mokolo Mokonzi alongolaki bato ba Sion o boombo, ezalaki na biso lokola ndoto.
Psal LinVB 126:2  Mokolo mona tozalaki koseke mpe koyemba nzembo. Mokolo mona bapagano bazalaki koloba : « Mokonzi asali bango mambi manene ! »
Psal LinVB 126:3  Solo, Mokonzi asali biso mambi manene, yango wana tozalaki na esengo enene.
Psal LinVB 126:4  Mokonzi, zongisa bandeko bakangemi o boombo, batonda awa lokola mai o miluka mya esobe.
Psal LinVB 126:5  Baye balonaki mboto na mai o miso, bakobuka mbuma na motema esengo.
Psal LinVB 126:6  Baye bakendeki na mawa, mboto ya kolona o maboko, bakozonga na esengo, maboke ma mbuma o mapeke.
Chapter 127
Psal LinVB 127:1  Nzembo o ntango ya boyingeli o Tempelo. Ya Salomo. Soko Mokonzi atongi ndako te, mosala mwa batongi mozali se mpamba. Soko Mokonzi akengeli engumba te, mosala mwa mokengeli mozali se mpamba.
Psal LinVB 127:2  Mpo nini okolamuka na nta ntongo, mpe okolala na butu noki te ? Okolia mampa ma yo bobele na mpasi, Mokonzi akopesaka mpe molingami wa ye, ata alali mpongi.
Psal LinVB 127:3  Kobota bana babali ezali likabo lya Mokonzi, libota lizali mbano ya ye.
Psal LinVB 127:4  Bana babali oboti o bolenge, bazali lokola makula o maboko ma mobuni.
Psal LinVB 127:5  Esengo na moto atondisi libenga na makula mana, akoyoka nsoni te mokolo bakofunda ye o esambi.
Chapter 128
Psal LinVB 128:1  Nzembo o ntango ya boyingeli o Tempelo. Esengo na bato banso bakobangaka Mokonzi mpe bakotambolaka o nzela ya ye !
Psal LinVB 128:2  Okobika na mosala mwa maboko ma yo, okozwa bolamu na esengo.
Psal LinVB 128:3  Mwasi wa yo akozala o kati ya ndako lokola elanga ya vino ekobotaka mingi. O meza ya yo bana bakozala ebele lokola mbuma o nzete ya oliva.
Psal LinVB 128:4  Tala makabo Nzambe akokabelaka moto akobangaka ye.
Psal LinVB 128:5  Mokonzi abenisa yo ut’o ngomba Sion mpo ’te omono Yeruzalem na esengo enene mikolo minso mya bomoi bwa yo ;
Psal LinVB 128:6  omono mpe bana ba bankoko ba yo ! Boboto bozala o Israel !
Chapter 129
Psal LinVB 129:1  Nzembo o ntango ya boyingeli o Tempelo. Uta bolenge banyokoli ngai mingi, Israel aloba yango polele,
Psal LinVB 129:2  uta bolenge banyokoli ngai mingi, kasi balongaki ngai te.
Psal LinVB 129:3  Lokola bato ba bilanga bakotimolaka mabelé, bakati mokongo mwa ngai mpota mpota.
Psal LinVB 129:4  Nzambe wa bosembo akati minyololo iye bato babe bakangaki ngai.
Psal LinVB 129:5  Bayoka nsoni mpe bazonga nsima, baye banso bayini ngomba Sion.
Psal LinVB 129:6  Bazala lokola matiti o motondo mwa ndako, makauki liboso ’te bakata mango.
Psal LinVB 129:7  Oyo akokata mango akozwa ndambo eke, oyo akokanga mango akozwa ata liboke te.
Psal LinVB 129:8  Bato bakoleka wana bakoloba te : « Mokonzi ábenisa mosala mwa bino ! » Tobenisi bino na nkombo ya Mokonzi.
Chapter 130
Psal LinVB 130:1  Nzembo o ntango ya boyingeli o Tempelo. Mokonzi, ut’o bozindo nazali kobelela yo :
Psal LinVB 130:2  Mokonzi, yoka lolaka la ngai ! Tandela ngai matoi ma yo, ondima bobeleli bwa ngai !
Psal LinVB 130:3  Soko otali masumu ma biso, Mokonzi, nani akobika e ?
Psal LinVB 130:4  Kasi okolimbisaka bato, yango wana bakobanga yo.
Psal LinVB 130:5  Nazali kolikya se na yo, Mokonzi, natii motema na liloba lya yo.
Psal LinVB 130:6  Lokola mokengeli azali kozila botani bwa ntongo, molimo mwa ngai motii elikya na Mokonzi. Lokola mokengeli azali kozila botani bwa ntongo,
Psal LinVB 130:7  Israel atia motema na libiki lya Mokonzi ! Mokonzi azali nta bolamu, ngolu ndelo te.
Psal LinVB 130:8  Ye moto akosikola bato ba Israel o masumu ma bango manso.
Chapter 131
Psal LinVB 131:1  Nzembo o ntango ya boyingeli o Tempelo. Ya Davidi. Mokonzi, nazali moto wa lolendo te, nakotombolaka motó na lofundo te. Naluki nzela ya kokoma moto monene te, to ya kosala maye maleki ngai na bokasi.
Psal LinVB 131:2  Nafandi se kimia, motema nye, lokola mwana moke o mokongo mwa mama wa ye ; se lokola mwana oyo, molimo mwa ngai mozali sikawa.
Psal LinVB 131:3  Israel, tia motema na Mokonzi Nzambe, sikawa mpe o bileko na bileko !
Chapter 132
Psal LinVB 132:1  Nzembo o ntango ya boyingeli o Tempelo. Mokonzi, kanisa Davidi, kanisa mpasi inso ayokaki na misala.
Psal LinVB 132:2  Ye mpenza alayelaki Mokonzi ndai, alakelaki Nta-Bokasi wa Yakob elako :
Psal LinVB 132:3  « Nakoyingela o ema ya ngai te, nakokende kopema o mbeto ya ngai te,
Psal LinVB 132:4  nakokanga miso te, nakolala mpongi te, nakopesa mango ntango ya kopema te,
Psal LinVB 132:5  kin’o mokolo nakozwela Mokonzi esika, ndako ya Nta-Bokasi wa Yakob ! »
Psal LinVB 132:6  O Efrata toyoki nsango ya Sanduku ya Bondeko, tokuti yango o bilanga bya Yaar.
Psal LinVB 132:7  Toyingela o ndako ya Mokonzi, tokumbama o boso bwa ebonga ya ye.
Psal LinVB 132:8  Teleme, Mokonzi, kende o esika ya bopemi, elongo na Sanduku ezali na nguya ya yo.
Psal LinVB 132:9  Banganga Nzambe bazala bato ba bosembo, bato ba yo bayemba na esengo.
Psal LinVB 132:10  Mpo ya mosaleli wa yo Davidi, olongola elongi epai ya mesiya wa yo te.
Psal LinVB 132:11  Mokonzi alayelaki Davidi ndai, akobuka yango mokolo moko te, alobaki : « Nakofandisa mwana moko wa libota lya yo o ngwende babongiseli yo.
Psal LinVB 132:12  Soko bana ba yo batosi bondeko bwa ngai mpe mibeko miye nateyaki bango, bankoko ba yo mpe bakozala bakonzi, bakofanda seko o ngwende babongiseli yo. »
Psal LinVB 132:13  Zambi Mokonzi aponi ngomba Sion, alingi ndako ya ye ezala wana, alobi :
Psal LinVB 132:14  « Esika ya ngai ya kopema ekozala wana, nakofanda wana seko, zambi nalingi yango.
Psal LinVB 132:15  Nakobenisa bato ba ye bazwa biloko biike, nakotondisa babola ba ye na biloko bya kolia.
Psal LinVB 132:16  Banganga Nzambe ba ye bakozwa libiki mpe bayambi ba ye banso bakoganga na nsai.
Psal LinVB 132:17  Nakobimisa molongi o libota lya Davidi, nakolengelele mesiya wa ngai mwinda.
Psal LinVB 132:18  Nakoyokisa banguna ba ye nsoni, enkoti ya bokonzi ekongenge o motó mwa ye. »
Chapter 133
Psal LinVB 133:1  Nzembo o ntango ya boyingeli o Tempelo. Ya Davidi. Talani esengo mpe bolamu kani, kofanda banso elongo bo bandeko !
Psal LinVB 133:2  Ezali lokola malasi ma nsolo mpimbo maye basopi o motó, matangi o mandefu, matangi o mandefu ma Arone, mpe o mokengé mwa molato mwa ye.
Psal LinVB 133:3  Ezali lokola mamio ma ngomba Ermon, mayei kokita o ngomba Sion. Kuna Mokonzi akopesa bobenisi, bomoi bokoumela seko.
Chapter 134
Psal LinVB 134:1  Nzembo o ntango ya boyingeli o Tempelo. Yakani kokumisa Mokonzi, bino banso basaleli ba Mokonzi. Bino bato bokosalaka o ndako ya Mokonzi, o lopango la ndako ya Nzambe wa biso.
Psal LinVB 134:2  Botombola maboko epai ya ndako esantu butu inso bokumisa Mokonzi.
Psal LinVB 134:3  Mokonzi abenisa bino ut’o Sion, ye mozalisi wa likolo na nse.
Chapter 135
Psal LinVB 135:1  Aleluya ! Bokumisa nkombo ya Mokonzi, bino basaleli ba Mokonzi, bokumisa ye.
Psal LinVB 135:2  Bino bato bokosalaka o ndako ya Mokonzi, o lopango la ndako ya Nzambe wa biso.
Psal LinVB 135:3  Bokumisa Mokonzi, zambi aleki bolamu, boyembela nkombo ya ye, aleki bolamu.
Psal LinVB 135:4  Mokonzi aponi libota lya Yakob, akomisi bato ba Israel ekolo ya ye.
Psal LinVB 135:5  Solo, nayebi ’te Mokonzi azali monene, Mokonzi wa biso aleki banzambe basusu banso.
Psal LinVB 135:6  Manso Mokonzi alingi kosala, akosala mango, o likolo mpe o nse, o mbu mpe o mai bozindo.
Psal LinVB 135:7  Akotambwisaka mampata ut’o nsuka ya mokili, mpe akotindaka minkalali mpo mbula enoka, akobimisaka mompepe o ebombelo ya ye.
Psal LinVB 135:8  Abomi bana ba yambo banso o Ezipeti, ná bana ba bato ná bana ba bibwele.
Psal LinVB 135:9  Alakisi bilembo mpe makamwisi maike o kati ya yo, mokili mwa Ezipeti, mpo ya kobangisa Farao na bato ba ye.
Psal LinVB 135:10  Atumboli bikolo biike, abomi bakonzi baleki bokasi :
Psal LinVB 135:11  Sikon, mokonzi wa ba-Amor, Og, mokonzi wa Basan, na bakonzi banso ba Kanana.
Psal LinVB 135:12  Mabelé abotoli bango, apesi mango na Israel bo lisango.
Psal LinVB 135:13  Mokonzi, bakumisa nkombo ya yo seko ! Mikolo minso batanga nkombo ya yo !
Psal LinVB 135:14  Zambi Mokonzi akosalaka bato ba ye malamu, akoyokelaka basaleli ba ye motema ngolu.
Psal LinVB 135:15  Bikeko bya bapagano bizali se palata na wolo, bisalemaki na maboko ma bato.
Psal LinVB 135:16  Bizali na monoko, kasi bikolobaka te, bizali na miso, kasi bikomonoko te,
Psal LinVB 135:17  bizali na matoi, kasi bikoyokaka te, bizali ata na mwa mpema o monoko te.
Psal LinVB 135:18  Bato basali bikeko bina bákokana na byango ná mpe baye banso bakotiaka mitema na byango.
Psal LinVB 135:19  Bato ba Israel, bokumisa Mokonzi, bato ba libota lya Arone, bokumisa Mokonzi,
Psal LinVB 135:20  bato ba libota lya Levi, bokumisa Mokonzi, bino banso bokobangaka Mokonzi, bokumisa ye.
Psal LinVB 135:21  Ut’o ngomba Sion bakumisa Mokonzi, bakumisa oyo afandi o Yeruzalem. Aleluya !
Chapter 136
Psal LinVB 136:1  Botondo Mokonzi, zambi aleki bolamu, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:2  Botondo Nzambe wa banzambe banso, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:3  Botondo Mokonzi wa bakonzi banso, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:4  Bobele ye moto asali makamwa mpenza, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:5  Akeli likolo na bwanya bonene, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:6  Abaki mokili makasi likolo lya mai, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:7  Ye moto akeli miinda minene, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:8  Akeli mwese mpo ’te mongenge na moi, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:9  Akeli sanza na minzoto mpo ’te mingenge na butu, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:10  Abomi bana ba yambo ba Ezipeti, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:11  Abimisi bato ba Israel o mokili mona, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:12  Atandi loboko, alakisi bokasi bwa ye, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:13  Apasoli Mbu Etane na biteni bibale, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:14  Alekisi bana ba Israel o kati ya mbu, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:15  Azindisi Farao na basoda ba ye o mbu, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:16  Akambi bato ba ye o eliki, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:17  Abeti bakonzi banene bobeti, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:18  Abomi bakonzi baleki bokasi, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:19  Abomi Sikon, mokonzi wa ba-Amor, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:20  Abomi Og, mokonzi wa Basan, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:21  Apesi ba-Israel mokili mona, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:22  Mosaleli wa ye azwi mwango bo lisango, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:23  Akanisi biso o ntango tosambwaki, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:24  Abikisi biso o maboko ma banyokoli, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:25  Akoleisaka binso bizali na bomoi, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Psal LinVB 136:26  Botondo Nzambe wa likolo, bolingi bwa ye, bolingi bwa seko !
Chapter 137
Psal LinVB 137:1  Tofandaki penepene na ebale ya Babilon, tozalaki kokanisa Sion mpe kolela.
Psal LinVB 137:2  Totingisaki nzenze ya biso o bitapi bya nzete izalaki wana.
Psal LinVB 137:3  Solo, baye balongaki biso balingaki ’te toyembela bango nzembo ; banyokoli basengeki biso ’te tosepelisa bango, balobaki : « Boyembela biso nzembo ya Sion ! »
Psal LinVB 137:4  Ndenge nini toyemba nzembo ya Nzambe wa biso o mokili mwa bampaya ?
Psal LinVB 137:5  Soko nabosani yo, Yeruzalem, malamu loboko la ngai la mobali lokauka !
Psal LinVB 137:6  Lolemu la ngai lokangema o edada soko natiki kokanisa yo, Yeruzalem, soko naluki liboso bolamu bwa yo te lokola esengo ya ngai ya solosolo.
Psal LinVB 137:7  Mokonzi, kanela bato ba Edom, kanisa mokolo babomaki Yeruzalem ; mokolo balobaki : « Toboma engumba ya bango ! Tobuka yango kin’o mabanga ma nse ! »
Psal LinVB 137:8  Yo, Babilon, ozali mobomi monene, bakumisa oyo akozongisela yo mabe osalaki biso.
Psal LinVB 137:9  Esengo na moto akokanga bana ba yo mpe akobwaka bango, mitó o libanga !
Chapter 138
Psal LinVB 138:1  Ya Davidi. Mokonzi, natondi yo na motema monso, banzambe basusu bamono ’te nazali koyembela yo.
Psal LinVB 138:2  Nakumbami o boso bwa Tempelo ya yo esantu. Nakumisi nkombo ya yo mpo ya bolingi mpe bosolo bwa yo, zambi maye olakelaki biso maleki nkembo ya yo na lokumu.
Psal LinVB 138:3  O mokolo nabelelaki yo, ondimelaki ngai, opesaki motema mwa ngai mpiko ya sika.
Psal LinVB 138:4  Bakonzi ba nse banso bakumisa yo, Mokonzi, zambi bayoki bilako olakelaki bato.
Psal LinVB 138:5  Bayembela Mokonzi mpo ya bikela bya ye : « Mokonzi azali na lokumu lonene !
Psal LinVB 138:6  Ut’o nta likolo akomonoko mobola, mpe ayebi moto wa lolendo noki. »
Psal LinVB 138:7  Okolendisa bomoi bwa ngai o ntango ya makama, okobatela ngai na nkanda ya banguna, okobikisa ngai na bokasi bwa yo.
Psal LinVB 138:8  Mokonzi akobongisela ngai makambo manso ; bolingi bwa Mokonzi, bolingi bwa seko, otika ngai te, ngai mosala mwa maboko ma yo.
Chapter 139
Psal LinVB 139:1  Ya kapita wa bayembi. Ya Davidi. Mokonzi, okotalaka motema mwa ngai, oyebi ngai mobimba solo.
Psal LinVB 139:2  Nafanda to nateleme, oyebi ; ut’o mosika oyebi makanisi ma ngai.
Psal LinVB 139:3  Natambola to nalala, ozali komono, oyebi nzela ya ngai inso.
Psal LinVB 139:4  Naino nabimisi liloba o monoko te, osili oyebi lyango, Mokonzi.
Psal LinVB 139:5  Okobatelaka ngai o liboso mpe o nsima, okosimbaka ngai na loboko la yo.
Psal LinVB 139:6  Bwanya bwa yo bonene bokokamwisaka biso, boleki mayele ma ngai mosika.
Psal LinVB 139:7  Nakende wapi mpo ’te nakoma mosika na yo ? Nabombama wapi mpo ’te nakima miso ma yo ?
Psal LinVB 139:8  Nabuta kin’o likolo ? Ozali wana ! Nakita o mboka ya bawa ? Ozali mpe kuna !
Psal LinVB 139:9  Napimbwa epai moi mokobimaka to nakende o nsuka ya mbu,
Psal LinVB 139:10  ata kuna loboko la yo lokokamba ngai, loboko la yo la mobali lokosimba ngai.
Psal LinVB 139:11  Náloba : « Ebongi molili mobomba ngai, penepene na ngai moi mobongwana butu ! »
Psal LinVB 139:12  Se mpamba : molili mokoki kobomba yo te, o miso ma yo butu bozali lokola moi, mpe molili lokola mwinda.
Psal LinVB 139:13  Yo moto okelaki ebandela ya bomoi bwa ngai, oyemaki ngai o libumu lya mama wa ngai.
Psal LinVB 139:14  Natondi yo mpo ya makamwa maye manso, nayebi malamu ’te bikela bya yo bileki binene.
Psal LinVB 139:15  Ozalaki komono ngai o kati ya libumu lya mama, ntango okelaki ngai na bonkutu, lokola o nse ya mabelé.
Psal LinVB 139:16  Nazalaki se moke, osilaki komono ngai, osilaki kokoma mikolo mya ngai minso o buku ya bomoi ; otangaki myango, naino mokolo moko mobandi te.
Psal LinVB 139:17  Koyeba mayele ma yo, Mokonzi, eleki kwokoso ; makanisi ma yo maleki ebele.
Psal LinVB 139:18  Nameka kotanga mango, nakoki te, maleki zelo na boike ; esilisi ngai kotanga, nakokuta se yo.
Psal LinVB 139:19  E Nzambe, soko olingi, boma bato baboyi yo ! Bino bato bokobomaka baninga, bolongwa epai ya ngai !
Psal LinVB 139:20  Bakotukaka yo na mayele mabe mpe bakokinolaka mikano mya yo.
Psal LinVB 139:21  E Mokonzi, baye bakoyinaka yo, náyina bango te ? Baye bakobunisaka yo, náyoka bango mpi te ?
Psal LinVB 139:22  Nayini bango boyini, bango banso bakomi banguna ba ngai mpe.
Psal LinVB 139:23  E Nzambe, tala ngai mpo oyeba motema mwa ngai, meka ngai mpo oyeba makanisi ma ngai.
Psal LinVB 139:24  Tala ngai soko nakolanda nzela ebe te, mpe kamba ngai o nzela ya lobiko.
Chapter 140
Psal LinVB 140:2  Mokonzi, bikisa ngai o maboko ma bato babe, batela ngai na bato ba bitumba.
Psal LinVB 140:3  Bakokanaka se kosala mabe, moi mobimba bakolukaka kobimisa bitumba.
Psal LinVB 140:4  Basebi lolemu la bango lokola nyoka ekosalaka, bakobombaka ngenge ya etupa o monoko.
Psal LinVB 140:5  Mokonzi, bikisa ngai o maboko ma bato babe, batela ngai na bato ba bitumba, baye bakani kokweisa ngai.
Psal LinVB 140:6  Bato ba lolendo babombi mitambo mpo bakanga ngai, batandi monyama o nzela ya ngai mpe batieli ngai mitambo.
Psal LinVB 140:7  Nalobi na Mokonzi : Yo ozali Nzambe wa ngai ! Nabondeli yo, Mokonzi, yoka losambo la ngai.
Psal LinVB 140:8  E Nzambe Mokonzi, yo nguya mpe libiki lya ngai, okobatelaka ngai o ntango ya etumba.
Psal LinVB 140:9  Mokonzi, maye basumuki balingi kosala, ondima mango te, bazwa nzela ya kokokisa mikano mya bango te, mpo ’te batombola mitó lisusu te.
Psal LinVB 140:11  Makala ma móto manokela bango lokola mbula, bakweya o bozindo mpe bateleme lisusu te.
Psal LinVB 140:12  Bato ba monoko mabe baumela o mokili te, bato balingi bitumba, bazwa makambo.
Psal LinVB 140:13  Nayebi ’te Mokonzi akolongisa bato ba mawa, mpe akotala na bosembo likambo lya babola.
Psal LinVB 140:14  Ntembe te, basemba bakokumisa nkombo ya yo, baye balingi yo bakozala o mboka yo.
Chapter 141
Psal LinVB 141:1  Nzembo ya Davidi. Nabeleli yo, Mokonzi, yaka kosalisa ngai, yoka lolaka la ngai, nazali kobelela yo.
Psal LinVB 141:2  Losambo la ngai lobuta kin’o epai ya yo, lokola milinga mya mpaka ya malasi. Nátombola maboko epai ya yo lokola libonza lya mpokwa.
Psal LinVB 141:3  Mokonzi, tia mokengeli o monoko mwa ngai, kengele ezibeli ya monoko mwa ngai.
Psal LinVB 141:4  Sala ’te maloba mabe mauta o motema mwa ngai te, nalanda nzela ya masumu te. Nasangana na bato babe te, nafanda na bango esika yoko o limpati te.
Psal LinVB 141:5  Nándima ’te moto semba atumbola ngai mpo ’te abongisa ngai ; nandima malete ma bato babe te ; esika bakosalaka mabe, nalendisa losambo.
Psal LinVB 141:6  Bábwaka bazuzi ba bango o kati ya mabanga, báyeba bongo ’te nalobaki mabe te :
Psal LinVB 141:7  « Minkuwa mya bango mikopanzana o mboka ya bawa, lokola libanga bapasoli likopanzanaka o mabelé. »
Psal LinVB 141:8  Mokonzi Nzambe, miso ma ngai se epai ya yo, nayei kobombama o mboka yo, bikisa ngai o liwa.
Psal LinVB 141:9  Bikisa ngai o motambo batandeli ngai, mpe batela ngai o mabe bakani kosala ngai.
Psal LinVB 141:10  Bato babe bakangema o minyama mya bango moko, kasi ngai nabika o nzela ya ngai.
Chapter 142
Psal LinVB 142:1  Maloba ma Davidi. Losambo o ntango azalaki o mobenga (1 Sam 24).
Psal LinVB 142:2  Nabengi Mokonzi, nabeleli ye, nabengi Mokonzi, nabondeli ye.
Psal LinVB 142:3  Namileli o miso ma ye, nayebisi ye nsomo nazali koyoka.
Psal LinVB 142:4  Mpema ekomi kosilela ngai, kasi yo oyebi nzela ya ngai : o nzela nalingi koleka batieli ngai motambo.
Psal LinVB 142:5  Natali epai ya loboko la mobali, ata moto moko ayebi ngai te. Naluki esika nini nakoki kobombama, moto moko apangani na ngai te.
Psal LinVB 142:6  Yango wana Mokonzi, nabeleli yo, nalobi : Yo ozali mobateli wa ngai, o mokili moye natii elikya se na yo !
Psal LinVB 142:7  Tia matoi na boleli bwa ngai, nazali na mawa manene mpenza. Longola ngai o maboko ma banyokoli, baye bakomi koleka ngai na bokasi.
Psal LinVB 142:8  Bimisa molimo mwa ngai o boloko mpo ’te natondo nkombo ya yo. Basemba báya kozinga ngai, bayeba malamu maye osali ngai.
Chapter 143
Psal LinVB 143:1  Nzembo ya Davidi. Mokonzi, yoka losambo la ngai, tia matoi na mabondeli ma ngai ; mpo ya lobokó mpe bosembo bwa yo, yanola ngai.
Psal LinVB 143:2  Osambisa ngai mosaleli wa yo te, zambi o miso ma yo moto moko azali na bosembo te.
Psal LinVB 143:3  Monguna alingi koboma ngai, abwaki ngai o nse mpe anyati ngai ; afandisi ngai o mboka ya molili lokola bato basili bawei.
Psal LinVB 143:4  Mpema ekomi kosilela ngai, nazali koyoka motema nsomo.
Psal LinVB 143:5  Nakundoli mikolo mya kala na maye manso osalaki, namanyoli misala mya maboko ma yo minso.
Psal LinVB 143:6  Natandeli yo maboko, nayoki yo mposa, lokola mabelé makauki makoyokaka mposa ya mai.
Psal LinVB 143:7  Yaka noki, Mokonzi, yanola ngai, zambi mpema ya ngai elingi esila. Obombela ngai elongi ya yo te, soki te nakokoma lokola bato bakiti o libulu.
Psal LinVB 143:8  Na nta ntongo olakisa ngai bolingi bwa yo, zambi natii elikya se na yo. Yebisa ngai nzela eye nasengeli kolanda, zambi motema mwa ngai molingi se yo.
Psal LinVB 143:9  Mokonzi, bikisa ngai o maboko ma banguna, nayei koluka esika ya kobombama epai ya yo.
Psal LinVB 143:10  Lakisa ngai, nasala maye makosepelisa yo, zambi yo ozali Nzambe wa ngai. Elimo ya yo ekamba ngai o nzela ezangi mabaku.
Psal LinVB 143:11  Mokonzi, mpo ya lokumu la nkombo ya yo, obatela bomoi bwa ngai ; mpo ya ngolu ya yo, obikisa ngai o ntango nakoyoka nsomo.
Psal LinVB 143:12  Mpo ya bolingi bwa yo, osilisa banguna ba ngai ; oboma banyokoli ba ngai banso, zambi ngai nazali mosaleli wa yo.
Chapter 144
Psal LinVB 144:1  Ya Davidi. Bakumisa Mokonzi, ye libanga lya ngai, akolakisaka ngai mayele ma kobunda etumba.
Psal LinVB 144:2  Ye bolingi mpe ebombamelo ya ngai, ye linongi mpe mobikisi wa ngai. Nakomibomba epai ya ye, nguba ya ngai, zambi akokaba bikolo bisusu o maboko ma ngai.
Psal LinVB 144:3  Mokonzi, moto nde eloko nini, mpo ’te ondima ye ? Mwana wa bato nde nani ’te okanisa ye ?
Psal LinVB 144:4  Moto azali lokola mompepe, mikolo mya ye mikolimwaka lokola elilingi.
Psal LinVB 144:5  Mokonzi, fungola likolo mpe kita, simba ngomba mpo ’te ibimisa milinga.
Psal LinVB 144:6  Tinda minkalali mpe panza banguna ba ngai, bete makula ma yo mpo ’te babulungana.
Psal LinVB 144:7  Ut’o likolo tanda loboko la yo mpe bikisa ngai, longola ngai o mai bozindo, o maboko ma bampaya.
Psal LinVB 144:8  Monoko mwa bango mozali se kokosa, bakolayaka se ndai ya lokuta.
Psal LinVB 144:9  E Nzambe, nakoyembela yo nzembo ya sika, nakobetele yo lokombe la nsinga zomi.
Psal LinVB 144:10  Yo moto okopesaka bakonzi lilonga, mpe obikisi Davidi mosaleli wa yo mpo ’te mompanga mobete ye te.
Psal LinVB 144:11  Bikisa ngai o maboko ma bampaya ; monoko mwa bango mozali se kokosa, bakolayaka se ndai ya lokuta.
Psal LinVB 144:12  Bana babali ba biso bazali lokola milona, bakoli malamu ut’o bomwana. Bana basi ba biso bazali lokola bilili o makonzi, biye bikokembisaka ndako ya bakonzi.
Psal LinVB 144:13  Bibombelo bya biso bitondi mpenza na mbuma ndenge na ndenge. Mpata ya biso ikoyikanaka nkoto na nkoto, tozali na bibwele ebele o mokili mwa biso.
Psal LinVB 144:14  Ngombe ya biso inso iyei mafuta. Bakobuka lopango la mboka lisusu te, banguna bakolonga biso lisusu te.
Psal LinVB 144:15  Esengo na bato bazwi bolamu bona, esengo na baye Mokonzi azali Nzambe wa bango.
Chapter 145
Psal LinVB 145:1  Nzembo ya Davidi. Nakokumisa yo, e Mokonzi Nzambe wa ngai ; nakoyembela nkombo ya yo mikolo minso seko.
Psal LinVB 145:2  Nakokumisa yo mokolo na mokolo, nakoyembela nkombo ya yo mikolo minso seko.
Psal LinVB 145:3  Mokonzi azali monene, bakumisa ye bokumisi ; bonene bwa ye bozali na ndelo te.
Psal LinVB 145:4  Bankoko bakosangela bana misala mya yo, bakosakola mpe bikela bya yo binene.
Psal LinVB 145:5  Bakosangela bato nkembo mpe lokumu la yo, mbala na mbala tokosolola lisolo lya makamwisi ma yo.
Psal LinVB 145:6  Tokoyebisa bokasi bwa yo bwa nsomo, mpe tokosakola bonene bwa yo.
Psal LinVB 145:7  Tokokundola bolamu bwa yo nsuka te, mpe tokokumisa bosembo bwa yo.
Psal LinVB 145:8  Mokonzi azali nta bolamu mpe ngolu, akosilikaka noki te mpe atondi na bolingi.
Psal LinVB 145:9  Mokonzi akolakisaka bato banso motema malamu, apusi kolinga bikelamo bya ye binso.
Psal LinVB 145:10  Mokonzi, bikelamo binso bitondo yo, bato ba yo banso bakembisa yo.
Psal LinVB 145:11  Basakola nkembo ya bokonzi bwa yo, basangela bikela bya yo binene.
Psal LinVB 145:12  Bato banso bayeba byango, mpe basakola bonene bwa nkembo ya bokonzi bwa yo.
Psal LinVB 145:13  Bokonzi bwa yo, bokonzi bwa bileko na bileko ; boyangeli bwa yo, boyangeli bwa seko. Manso Mokonzi akolobaka mazali ma solo, akosalaka manso se na bolingi.
Psal LinVB 145:14  Mokonzi akotelemisaka baye balingi bakweya, mpe akolendisaka baye balembi.
Psal LinVB 145:15  Miso ma banso epai ya yo, bakolikya ’te okopesa bango bilei o ntango ekoki.
Psal LinVB 145:16  Okofungolelaka bato maboko ma yo : okoleisaka mpe okotondisaka bango banso.
Psal LinVB 145:17  Mokonzi azali na bosembo o bikela bya ye binso, na bolingi o misala mya ye minso.
Psal LinVB 145:18  Mokonzi azali penepene na baye bakobelelaka ye, baye bakosambelaka ye na bosolo.
Psal LinVB 145:20  Mokonzi akobatelaka baye banso balingi ye, kasi akosilisa bato babe banso.
Psal LinVB 145:21  Monoko mwa ngai mosakola lokumu la Mokonzi, binso bizali na bomoi bikumisa nkombo ya ye esantu, o bileko binso seko !
Chapter 146
Psal LinVB 146:1  Aleluya ! Molimo mwa ngai, kumisa Mokonzi !
Psal LinVB 146:2  Nalingi kokumisa Mokonzi bomoi bwa ngai mobimba, koyembela Nzambe wa ngai mikolo minso kin’o liwa.
Psal LinVB 146:3  Botia mitema na bato banene te, bazali se bato, bakoki kobikisa te.
Psal LinVB 146:4  Mokolo bakokata motema, bakozonga o mabelé, mokolo mona mikano mya bango minso mikobeba.
Psal LinVB 146:5  Esengo na moto oyo Nzambe wa Yakob akosalisa, oyo atii elikya na Mokonzi Nzambe wa ye,
Psal LinVB 146:6  Ye azali mozalisi wa likolo na nse, oyo akeli mbu mpe biloko binso bizali wana. Azali na bosolo mikolo minso seko.
Psal LinVB 146:7  Akozongisela banyokwami bolamu, akoleisaka bato bakufi na nzala, Mokonzi akofungolaka minyololo mya baye bakangemi.
Psal LinVB 146:8  Mokonzi akofungolaka miso ma bato ba lolanda, Mokonzi akolendisaka baye balembi. Mokonzi alingi bato ba motema bosembo.
Psal LinVB 146:9  Mokonzi akobatelaka mompaya, akosalisaka mwana etike mpe mwasi bozenge, kasi akobulinginyaka nzela ya bato babe.
Psal LinVB 146:10  Nzambe akoyangelaka o bileko na bileko, azali Nzambe wa biso, bato ba Sion, seko.
Chapter 147
Psal LinVB 147:1  Aleluya ! Bokumisa Mokonzi ! Ebongi bayembela Nzambe wa biso, kokumisa ye eleki bolamu.
Psal LinVB 147:2  Mokonzi atongi Yeruzalem lisusu, asangisi bato ba Israel bapanzanaki.
Psal LinVB 147:3  Abikisi bato batondi na mawa, mpe akangi mpota ya baye bazoki.
Psal LinVB 147:4  Ayebi motango mwa minzoto minso, ayebi nkombo ya monzoto moko moko.
Psal LinVB 147:5  Mokonzi wa biso nta-bokasi azali monene, bwanya bwa ye bozali na nsuka te.
Psal LinVB 147:6  Mokonzi akotombola bato ba bosawa, kasi akokitisa basumuki kin’o mabelé.
Psal LinVB 147:7  Boyembela Mokonzi nzembo ya botondi, bobetele Nzambe wa biso lokombe.
Psal LinVB 147:8  Ye moto akotondisaka likolo na mampata, akonokiselaka mabelé mbula, akotoisaka matiti o ngomba na mpe ndunda bo bilei bya bato.
Psal LinVB 147:9  Akoleisaka bibwele matiti ma esobe, akotondisaka bana ba yanganga bazali kolela nzala.
Psal LinVB 147:10  Bokasi bwa farasa bokosepelisaka ye te, akotalaka bokasi bwa moto se mpamba.
Psal LinVB 147:11  Mokonzi akosepelaka na bato bakobangaka ye, baye bakotiaka mitema na bolingi bwa ye.
Psal LinVB 147:12  E Yeruzalem, sepela Mokonzi ! E Sion, kumisa Nzambe wa yo !
Psal LinVB 147:13  Alendisi bikangeli bya bizibeli bya yo, abenisi bana ba yo bazali o mboka yo.
Psal LinVB 147:14  Ye akoumisaka boboto o mokili mwa yo, akotondisaka yo na fufu ya mampa.
Psal LinVB 147:15  Akotindaka liloba lya ye o mokili, likokoma noki o bisika binso.
Psal LinVB 147:16  Akonokisaka mbula ya mpembe lokola ntokia, akopanzaka mamio ma mpio lokola mputulu.
Psal LinVB 147:17  Akobwaka matandala biteni na biteni : nani akoki na malili makasi ma ye ?
Psal LinVB 147:18  Etindi ye liloba, matandala makonyangwa, etindi ye mompepe, mai makomi kotiyola.
Psal LinVB 147:19  Ayebisi Yakob liloba lya ye, apesi Israel mibeko mpe mitindo mya ye.
Psal LinVB 147:20  Asali bongo na bikolo bisusu te, ata ekolo yoko eyebi mibeko mya ye te.
Chapter 148
Psal LinVB 148:1  Aleluya ! Ut’o likolo bokumisa Mokonzi, bokumisa ye o likolo lya mampata.
Psal LinVB 148:2  Banzelu ba ye banso, bokumisa ye, mampinga ma likolo manso, bokumisa ye !
Psal LinVB 148:3  Mwese na sanza, bokumisa ye, minzoto miye mikongengeke, bokumisa ye !
Psal LinVB 148:4  Bokumisa ye, binso bizali o nsuka ya likolo, na mpe mai manso mazali kuna !
Psal LinVB 148:5  Binso bikumisa nkombo ya Mokonzi, biye bikelami na liloba lya monoko mwa ye.
Psal LinVB 148:6  Asali ’te bipikama seko, apesi byango mobeko mokoki kobongwana te.
Psal LinVB 148:7  Bikelamo binso bya nse, bokumisa Mokonzi, mbisi inene na mpe bozindo bwa mai,
Psal LinVB 148:8  móto na mpio, mbula na londende, mompepe mwa ekumbaki mokotosaka bitinda bya ye,
Psal LinVB 148:9  ngomba inene na ngomba inso ike, nzete ya mbuma na nzete inso ya zamba,
Psal LinVB 148:10  nyama ya zamba na nyama inso ya mboka, nyama ikolandaka o mabelé na ndeke ikopimbwaka o likolo,
Psal LinVB 148:11  bakonzi ba nse na bato ba bikolo binso, bankumu na bayangeli banso ba mokili,
Psal LinVB 148:12  bilenge babali na bangondo, banuna banso elongo na bana bake,
Psal LinVB 148:13  bokumisa nkombo ya Mokonzi ! Se nkombo ya ye eleki lokumu, nkembo ya ye engengi o likolo mpe o nse !
Psal LinVB 148:14  Akolendisa nguya ya bato ba ekolo ya ye, ntina ya litundu ya balingami ba ye, bana ba Israel, bato ba ye seko.
Chapter 149
Psal LinVB 149:1  Aleluya ! Boyembela Mokonzi nzembo ya sika, bokumisa ye o lisanga lya bato ba ye.
Psal LinVB 149:2  Israel asepela mozalisi wa ye, bato ba Sion basepela Mokonzi wa bango.
Psal LinVB 149:3  Bakumisa nkombo ya ye na mabina, babetele ye lokombe na nzenze !
Psal LinVB 149:4  Zambi Mokonzi alingi ekolo ya ye mingi, akobikisa bato ba bosawa.
Psal LinVB 149:5  Bato ba ye basepela mpe bakumisa ye, baganga mpo ya esengo ut’o esika bazali.
Psal LinVB 149:6  Bayembela Nzambe nzembo na mongongo makasi, mompanga mopotu o maboko,
Psal LinVB 149:7  mpo ’te babekola mabe ma bato ba bikolo, mpe batumbola bato ba mikili misusu.
Psal LinVB 149:8  Bakanga bakonzi ba bango na minyololo, mpe bankumu na bikangeli bya bibende.
Psal LinVB 149:9  Basala na bango lokola ekomami : Tala lokumu la bato ba ye banso ! Aleluya !
Chapter 150
Psal LinVB 150:1  Aleluya ! Bokumisa Nzambe o ndako ya ye esantu, bokumisa ye o etando ya bokasi bwa ye,
Psal LinVB 150:2  bokumisa ye mpo ya bikela bya ye binene, bokumisa ye mpo ya bonene bwa nkembo ya ye !
Psal LinVB 150:3  Bokumisa ye na nzembo ya mondule, bokumisa ye na lokombe mpe na likembe,
Psal LinVB 150:4  bokumisa ye na mbonda mpe na mabina, bokumisa ye na nzenze mpe na mpiololo,
Psal LinVB 150:5  bokumisa ye na migbala mikoyokanaka mosika, bobetele ye migbala mya likwei !
Psal LinVB 150:6  Bikelamo binso bizali na bomoi bikumisa Mokonzi ! Aleluya !